\id ZEC Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Zakari \toc1 Zakari \toc2 Zakari \toc3 Za \mt1 Zakari \c 1 \ms1 Buku ya bimoniseli \s1 Kobengama mpo na kobongola motema \p \v 1 Na sanza ya mwambe, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Zakari, mwana mobali ya Barashi, mwana mobali ya Ido : \pi1 \v 2 — Yawe atombokelaki bakoko na bino makasi. \v 3 Yango wana, loba na bato oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bozonga epai na Ngai, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe Ngai nakozonga epai na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \v 4 Bozala te lokola bakoko na bino, epai ya banani basakoli ya tango ya kala balobaki : Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Botika banzela mabe mpe misala na bino ya mabe, bozonga epai na Ngai ! › Kasi basalaki keba te na maloba na Ngai, mpe batosaki Ngai te, elobi Yawe. \v 5 Wapi sik’oyo bakoko na bino ? Boni, basakoli yango bazali kaka na bomoi kino na mokolo ya lelo ? \v 6 Maloba mpe malako na Ngai, oyo napesaki na nzela ya basakoli, basali na Ngai, ekomelaki bakoko na bino te ? Solo, ekomelaki bango, babongolaki mitema mpe balobaki : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, asaleli biso kolanda banzela mpe misala na biso, asali ndenge kaka akanaki kosala. › » \s1 Emoniseli ya liboso : bampunda \p \v 7 Na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya zomi na moko, sanza ya shebati, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Zakari, mwana mobali ya Barashi, mwana mobali ya Ido. \p \v 8 Na butu, nazwaki emoniseli moko : namonaki liboso na ngai moto moko azali kotambolisa mpunda moko ya langi ya motane ; moto yango atelemaki kati na banzete ya mirite oyo ezalaki kati na lubwaku. Na sima na ye, ezalaki na bampunda mosusu ya langi ya motane, ya shokola mpe ya pembe. \v 9 Natunaki : \pi1 — Nkolo na ngai, bampunda oyo elingi kolakisa nini ? \p Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongisaki : \pi1 — Nakolakisa yo tina na yango. \p \v 10 Moto oyo azalaki kati na banzete ya mirite alimbolaki : \pi1 — Ezali bato oyo Yawe atindaki mpo na kotambola na mabele. \p \v 11 Bato yango bayebisaki Anjelu ya Yawe, oyo atelemaki kati na banzete ya mirite : \pi1 — Towuti kotambola na mabele mpe tokuti kimia mpe bopemi na mokili mobimba. \p \v 12 Anjelu ya Yawe alobaki : \pi1 — Yawe, Mokonzi ya mampinga, kino tango nini okoboya koyokela engumba Yelusalemi mawa mpe bingumba mosusu ya Yuda, bingumba oyo okangela kanda mibu tuku sambo mobimba ? \p \v 13 Yawe abimisaki maloba ya kimia mpe ya kobondisa, na monoko ya Anjelu oyo azalaki koloba na ngai. \p \v 14 Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai alobaki : \pi1 — Tatola maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Yelusalemi mpe Siona. \v 15 Kasi nazali na kanda makasi mpo na bikolo oyo emonaka ete emikoka. Nazalaki kaka na kanda moke mpo na bato na Ngai, kasi bango bayei nde kobakisela bato na Ngai pasi. › » \v 16 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Yelusalemi mpo na koyokela bango mawa ; mpe kuna, bakotonga lisusu Tempelo na Ngai mpe bakosalela kati na Yelusalemi singa oyo bamekelaka molayi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \b \p \v 17 Tatola lisusu : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bingumba na Ngai ekotondisama lisusu na bomengo, Yawe akobondisa lisusu Siona mpe akopona Yelusalemi. › » \s1 Emoniseli ya mibale : maseke minei mpe bato minei ya misala ya maboko \p \v 18 Bongo natombolaki miso mpe namonaki maseke minei liboso na ngai. \v 19 Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai : \pi1 — Maseke wana elakisi nini ? \p Azongiselaki ngai : \pi1 — Maseke wana ezali bikolo ya nguya oyo epanzaki Yuda, Isalaele mpe Yelusalemi. \p \v 20 Yawe alakisaki ngai bato minei ya misala ya maboko. \v 21 Natunaki : \pi1 — Bato oyo bayei kosala nini ? \p Azongisaki : \pi1 — Ezali maseke oyo eyaki kopanza Yuda mpo ete moto moko te akoka kotombola moto, kasi bato oyo ya misala ya maboko bayei nde kolengisa bango mpe kokweyisa nguya ya bikolo oyo etombolaki maseke na yango mpo na kobundisa Yuda mpe kopanza bato na yango. \c 2 \s1 Emoniseli ya misato : singa oyo bamekelaka molayi \p \v 1 Natombolaki lisusu miso mpe namonaki moto moko liboso na ngai, asimbaki singa oyo bamekelaka molayi, na loboko na ye. \v 2 Natunaki ye : \pi1 — Ozali kokende wapi ? \p Azongiselaki ngai : \pi1 — Nazali kokende komeka molayi ya Yelusalemi mpo na koyeba mokuse mpe molayi na yango. \p \v 3 Bongo Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atikaki ngai, mpe Anjelu mosusu ayaki mpo na kokutana na ye \v 4 mpe alobaki na ye : \pi1 — Kima mbangu penza, mpe kende koloba na elenge mobali wana : « Yelusalemi ekotikala lisusu na bamir te mpo ete motango ya bato mpe ya banyama oyo bazali kati na yango ekokoma ebele koleka. \v 5 Ngai moko, nakozala mir ya moto zingazinga na yango, » elobi Yawe, « mpe nakomonisa nkembo na Ngai kati na yango. » \pi1 \v 6 Tokende ! Tokende ! Tobima noki na mokili ya nor, elobi Yawe, pamba te Ngai moko nde napanzaki bino na mokili mobimba, elobi Yawe. \m \v 7 Siona, tokende ! Bima noki, yo oyo ovandaka na Babiloni, mboka kitoko ! \v 8 Pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo apesaki ngai mokumba ya kosakola mpo na kotelemela bikolo oyo ebotolaki bino biloko na makasi alobi : Moto nyonso oyo akosimba yo akosimba nde mbuma ya liso na Ngai. \v 9 Solo, nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpo ete bawumbu na bango babotola bango biloko na makasi. Na bongo nde bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai. \pi1 \v 10 Siona, mboka kitoko, ganga na esengo mpe sepela, pamba te nazali koya kovanda kati na yo, elobi Yawe. \v 11 Na mokolo wana, bato ya bikolo ebele bakoya kosangana elongo na Yawe mpe bakokoma bato na Ngai. Nakovanda kati na bino ; mpe na bongo, bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino. \v 12 Yawe akokomisa Yuda lokola libula na Ye moko penza kati na mabele ebulisama, mpe akopona lisusu Yelusalemi. \v 13 Tika ete bato ya mokili mobimba bavanda kimia liboso ya Yawe, pamba te Ye moko atelemi mpe abimi na Ndako na Ye ya bule. \c 3 \s1 Emoniseli ya minei : bilamba ya mokonzi ya Banganga-Nzambe \p \v 1 Yawe alakisaki ngai Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, oyo azalaki ya kotelema liboso ya Anjelu ya Yawe. Alakisaki ngai lisusu Satana oyo azalaki ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya Jozue mpo na kofunda ye. \v 2 Yawe alobaki na Satana : \pi1 — Satana, tika ete Yawe apamela yo ! Tika ete Yawe oyo apona Yelusalemi apamela yo ! Boni, moto oyo azali te lokola koni ya moto oyo balongoli na moto ? \p \v 3 Nzokande, Jozue alataki bilamba ya salite tango atelemaki liboso ya Anjelu. \v 4 Bongo Anjelu alobaki na ba-oyo bazalaki kotelema liboso na ye : \pi1 — Bolongola ye bilamba wana ya salite ! \p Mpe alobaki na Jozue : \pi1 — Tala, nalongoli masumu na yo mpe nakolatisa yo bilamba ya talo. \p \v 5 Nalobaki : \pi1 — Bolatisa ye kitendi ya peto oyo bakangaka na moto. \p Boye, bakangaki ye kitendi ya peto na moto mpe balatisaki ye bilamba mosusu wana Anjelu ya Yawe atelemaki pene na ye. \p \v 6 Anjelu ya Yawe ayebisaki na Jozue maloba oyo : \pi1 \v 7 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Soki otamboli na nzela na Ngai mpe obateli mitindo na Ngai, okokamba ndako na Ngai mpe okobatela lopango na Ngai, mpe nakotia yo na molongo ya ba-oyo batelemaka awa. \pi1 \v 8 Jozue, mokonzi ya Banganga-Nzambe, yo elongo na bandeko na yo, Banganga-Nzambe oyo basalaka elongo na yo, bozali bilembo oyo etalisaka makambo oyo ekoya. Nakobimisa Mosali na Ngai ; bakobenga Ye : Moto ya nzete oyo ebimaka na mobimbi. \v 9 Tala, natie libanga liboso ya Jozue. Libanga yango ezali na miso sambo, nakokoma makomi na likolo na yango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpe nakolongola masumu ya mokili oyo na mokolo moko. \pi1 \v 10 Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobengisa moninga na ye mpo ete bavanda na se ya nzete ya vino mpe ya figi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \c 4 \s1 Emoniseli ya mitano : etelemiselo ya minda mpe banzete mibale ya olive \p \v 1 Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai azongaki mpe alamusaki ngai ndenge balamusaka moto oyo alali pongi. \v 2 Atunaki ngai : \pi1 — Ozali komona nini ? \p Nazongiselaki ye : \pi1 — Nazali komona etelemiselo moko ya mwinda, basala na wolo mpe, na likolo na yango, ezali na kopo moko, minda sambo mpe batio sambo oyo elekisaka mafuta kino na minda. \v 3 Ezali lisusu na banzete mibale ya olive pene ya etelemiselo ya minda : moko na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi. \p \v 4 Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai : \pi1 — Nyonso oyo elakisi nini, nkolo na ngai ? \p \v 5 Azongiselaki ngai : \pi1 — Boni, oyebi te soki elingi kolakisa nini ? \p Nazongiselaki ye : \pi1 — Te, nkolo na ngai ! \p \v 6 Alobaki na ngai : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe alobi na Zorobabeli : « Ezali na makasi to na nguya na yo te, kasi na nguya na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \v 7 Ozali nani, ngomba monene ? Okokoma etando liboso ya Zorobabeli. Akobimisa libanga monene kati na yo, wana bato bakozala koganga na esengo : « Tika ete Nzambe apambola yango ! Tika ete Nzambe apambola yango ! » \p \v 8 Bongo Yawe alobaki na ngai : \pi1 \v 9 — Ezali maboko ya Zorobabeli nde etongaki miboko ya Tempelo oyo ; ezali mpe kaka maboko yango nde ekosilisa mosala ya kotonga yango. Boye bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino. \pi1 \v 10 Nani atiolaki makambo mike ya ebandeli ? Bato bakotonda na esengo tango bakomona, na maboko ya Zorobabeli, singa oyo bamekelaka molayi. Biloko wana sambo ezali nde miso ya Yawe oyo etalaka mokili mobimba. \p \v 11 Natunaki Anjelu : \pi1 — Banzete mibale ya olive oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali mpe ya mwasi ya etelemiselo ya minda elakisi nini ? \p \v 12 Natunaki ye lisusu : \pi1 — Bitape mibale ya nzete ya olive, oyo ezali pembeni ya batio mibale ya wolo oyo ebimisaka mafuta oyo engalaka elakisi nini ? \p \v 13 Azongiselaki ngai : \pi1 — Boni, oyebi te soki elakisi nini ? \p Nazongisaki : \pi1 — Te, nkolo na ngai. \p \v 14 Boye, alobaki : \pi1 — Ezali nde bato mibale oyo bapakolami mafuta mpo na kosalela Nkolo ya mokili mobimba. \c 5 \s1 Emoniseli ya motoba : buku oyo epumbwaka \p \v 1 Tango natalaki lisusu, namonaki buku moko : ezali kopumbwa. \v 2 Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai atunaki ngai : \pi1 — Ozali komona nini ? \p Nazongisaki : \pi1 — Nazali komona buku moko : ezali kopumbwa ; molayi na yango ezali na bametele pene zomi, mpe mokuse na yango, bametele pene mitano. \p \v 3 Alobaki na ngai : \pi1 — Ezali nde bilakeli mabe oyo ezali kopanzana na mokili mobimba ; pamba te, kolanda ndenge ekomama na ngambo moko, bakobengana miyibi nyonso ; mpe kolanda ndenge ekomama na ngambo mosusu, bakobengana bato nyonso oyo balapaka ndayi ya lokuta. \v 4 Nakoyeisa elakeli mabe oyo mpo ete ekota kati na ndako ya moyibi mpe kati na ndako ya moto oyo alapaka ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai. Ekotikala solo kati na ndako na ye mpe ekobebisa yango nyonso, ezala mabaya to mabanga na yango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \s1 Emoniseli ya sambo : mwasi kati na kitunga \p \v 5 Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai apusanaki pene na ngai mpe alobaki : \pi1 — Tombola miso na yo mpe tala makambo oyo ezali koleka kuna. \p \v 6 Natunaki : \pi1 — Makambo nini yango ? \p Azongisaki : \pi1 — Ezali nde sani, emekelo motuya ya biloko. \p Abakisaki : \pi1 — Sani yango etondisamaki na masumu ya bato ya mokili. \p \v 7 Kaka na tango yango, mofinuku na yango ya ebende etombwamaki, mpe namonaki mwasi moko avanda na kati. \p \v 8 Alobaki : \pi1 — Mwasi wana azali elembo ya makambo mabe. Bongo azongisaki ye kati na sani, emekelo motuya ya biloko, mpe azipaki mofinuku na yango. \p \v 9 Natombolaki miso mpe namonaki liboso na ngai basi mibale bazali kopumbwa mpo na koya epai na biso. Mapapu na bango ezalaki minene lokola mapapu ya nkongi. Batombolaki sani yango kino na kati-kati ya likolo mpe se. \p \v 10 Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai : \pi1 — Bazali komema sani yango wapi ? \p \v 11 Azongisaki : \pi1 — Bazali komema yango na mokili ya Babiloni mpo ete batongela yango ndako, na Shineari. Soki ndako yango esili kotongama, bakotia sani yango kuna. \c 6 \s1 Emoniseli ya mwambe : bashar minei \p \v 1 Tango natalaki lisusu, namonaki bashar minei liboso na ngai : ezali kobima na kati-kati ya bangomba mibale ya bronze. \v 2 Bampunda ya langi ya motane makasi ezalaki kobenda shar ya liboso, mpe bampunda ya langi ya mwindo ezalaki kobenda shar oyo ya mibale. \v 3 Bampunda ya langi ya pembe ezalaki kobenda shar oyo ya misato, bampunda ya madodo-madodo ezalaki kobenda shar oyo ya minei. Bampunda nyonso ya madodo-madodo ezalaki makasi. \p \v 4 Natunaki Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai : \pi1 — Bampunda nyonso oyo elakisi nini, nkolo na ngai ? \p \v 5 Azongiselaki ngai : \pi1 — Ezali Molimo ya likolo oyo akokende na bangambo nyonso minei ya mokili mobimba. Atelemaki liboso ya Nkolo ya mokili mobimba mpe sik’oyo abimi. \v 6 Shar oyo bampunda ya langi ya mwindo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya nor ; shar oyo bampunda ya langi ya pembe ezali kobenda ezali kolanda oyo ya liboso, mpe shar oyo bampunda ya madodo-madodo ezali kobenda ezali kokende na mokili ya sude. \p \v 7 Bampunda nyonso ya makasi ebimaki mpe etondaki na posa makasi ya kotambola na mabele. Boye, Anjelu alobaki na yango : « Bokende kotambola na mokili ! » Mpe ebimaki mpo na kokende kotambola na mabele. \p \v 8 Abengaki ngai mpe alobaki na ngai : \pi1 — Tala, bampunda oyo ezali kokende na mokili ya nor ekosala ete Molimo na ngai avanda na mokili wana ya nor. \s1 Jozue alati motole ya bokonzi \p \v 9 Yawe alobaki na ngai : \pi1 \v 10 — Kamata palata mpe wolo epai ya Elidayi, Tobiya mpe Yedaeya, ba-oyo bawuti na bowumbu wuta na Babiloni ; mpe na mokolo yango kaka, kende yo moko na ndako ya Joziasi, mwana mobali ya Sofoni, epai wapi bakomeli. \v 11 Kamata palata mpe wolo mpo ete osalela yango motole ; bongo okolatisa yango Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe. \pi1 \v 12 Okoyebisa ye maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Tala moto oyo kombo na ye ezali : Moto ya nzete. Nyonso ekobota esika ye azali, mpe ezali ye nde akotonga Tempelo ya Yawe. \v 13 Ezali ye nde akotonga Tempelo ya Yawe ; bakolatisa ye bilembo ya lokumu, mpe akovanda na kiti ya bokonzi mpo na kokonza. Mpe wana kaka na kiti na ye ya bokonzi, akozala mpe Nganga-Nzambe. Bongo misala nyonso mibale, ezala ya bokonzi to ya bonganga-Nzambe, ekotambola malamu. › » \pi1 \v 14 Bakobomba motole yango kati na Tempelo ya Yawe lokola ekaniseli mpo na kokanisa motema malamu ya Elidayi, ya Tobiya, ya Yedaeya mpe ya Eleme, mwana mobali ya Sofoni. \v 15 Bato oyo bakowuta mosika penza bakoya mpo na kosunga misala ya kotonga Tempelo ya Yawe, bongo bokoyeba solo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde atindaki ngai epai na bino. Makambo oyo ekokokisama solo soki boluki kotosa Yawe, Nzambe na bino. \c 7 \s1 Likambo ya kokila bilei \p \v 1 Na mobu ya minei ya mokonzi ya Dariusi, na mokolo ya minei ya sanza ya libwa, sanza ya kisilevi, Yawe alobaki na Zakari. \v 2 Bato ya Beteli batindaki Saretseri, Regemi-Meleki elongo na bato na bango mpo na kobondela Yawe \v 3 mpe mpo na kotuna motuna oyo epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe epai ya basakoli : \pi1 — Boni, tosengeli kaka kokoba kolela mpe kokila bilei na sanza ya mitano ndenge tosalaka wuta kala ? \p \v 4 Bongo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai : \pi1 \v 5 — Tuna bato nyonso ya ekolo mpe Banganga-Nzambe : « Wuta mibu tuku sambo, tango bokilaka bilei mpe bolelaka na sanza ya mitano mpe ya sambo, bosalaka yango mpo na Ngai ? \v 6 Bongo tango bozalaki kolia mpe komela, ezalaki te mpo na esengo na bino moko ? \v 7 Yango ezali te liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya basakoli na Ye wuta kala tango Yelusalemi mpe bingumba oyo ezingelaki yango ezalaki na kimia mpe na boyokani, mpe Negevi mpe Shefela etondaki na bato ebele ? » \p \v 8 Mpe Yawe alobaki lisusu na Zakari : \pi1 \v 9 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokataka makambo na bosembo, mpe tika ete moko na moko kati na bino azala na bolingo mpe na mawa ya moto mosusu. \v 10 Bonyokolaka te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike to mopaya to mpe mobola, mpe tika ete moko te kati na bino asala, na motema na ye, mabongisi ya kosala moninga na ye mabe. » \pi1 \v 11 Kasi baboyaki kotosa, bamatisaki mapeka mpe bakangaki matoyi na bango mpo ete bayoka Ngai te. \v 12 Bakomisaki mitema na bango makasi lokola diama mpo kaka bayoka te mibeko mpe maloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, azalaki koloba na bango na lisungi ya Molimo na Ye na nzela ya basakoli na Ye ya kala. Mpo na yango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, atombokaki makasi. \pi1 \v 13 Boye, Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki : « Lokola bayokaki Ngai te tango nazalaki kobenga bango, Ngai mpe nayokaki bango te tango babengaki Ngai. \v 14 Na bongo, napanzaki bango kati na bikolo nyonso epai wapi bakomaki bapaya, mpe mokili na bango ebebisamaki makasi : moto moko te akokaki lisusu kokota to kobima kuna. Ndenge wana nde bakomisaki mokili ya kitoko libebi. » \c 8 \s1 Elaka ya kopambola Yelusalemi \p \v 1 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai : \v 2 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nazali na zuwa makasi mpo na Siona, mpo ete nalingaka yango makasi na motema na Ngai. › » \b \p \v 3 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakozonga na Siona mpe nakovanda kati na Yelusalemi. Boye, Yelusalemi ekobengama Engumba ya bosolo ; mpe ngomba ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ekobengama Ngomba ya bule. » \p \v 4 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Mibange ya mibali mpe ya basi bakotonda lisusu na babalabala ya Yelusalemi, moto na moto na nzete na ye na loboko mpo na kimobange. \v 5 Babalabala ya engumba ekotonda lisusu na bilenge mibali mpe basi oyo bakokoma kosakana kuna. » \p \v 6 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Boni, soki, na tango wana, ekomonana lokola likambo ya kokamwa na miso ya batikali kati na bato oyo, Ngai mpe namona yango likambo ya kokamwa ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \p \v 7 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakobikisa bato na Ngai, longwa na mokili ya este kino na mokili ya weste. \v 8 Nakozongisa bango mpo ete bavanda na Yelusalemi ; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango na boyengebene mpe na bosembo. » \b \p \v 9 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bino ba-oyo, na mikolo oyo, bozali koyoka maloba kaka oyo basakoli balobaki, lokola bazalaki awa na tango miboko ya Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaki kotongama, boyika mpiko mpe bolendisa maboko na bino mpo na kotonga Tempelo oyo ya Yawe. \v 10 Pamba te, liboso ya tango wana, bato bazalaki kozwa lifuti ya malonga te na misala na bango, mpe banyama ezalaki kopesa ata litomba moko te ; moto moko te azalaki kokende na mosala na ye na kimia likolo ya kobanga banguna, pamba te nasalaki ete moto moko na moko atelemela moninga na ye. \v 11 Kasi sik’oyo, nakosala lisusu te, na ndambo ya bato oyo batikali, makambo oyo nasalaki na tango ya kala, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \v 12 « Solo, milona ekokola malamu, bilanga ya vino ekobota bambuma na yango, mabele ekobimisa biloko ebele, mpe likolo ekonokisa mvula. Nakopesa biloko oyo nyonso lokola libula epai ya batikali kati na bato oyo. \v 13 Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele, bobanga ata eloko moko te, boyika kaka mpiko ; pamba te ndenge bokomaki bikolo elakelama mabe kati na bikolo mosusu, ndenge wana mpe nakobikisa bino, mpe bokozala lipamboli. » \b \p \v 14 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Ndenge kaka nazwaki mokano ya kotindela bino pasi mpe ya koyokela bino mawa te tango batata na bino batumbolaki kanda na Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, \v 15 « ndenge wana mpe nazwi mokano sik’oyo ya komonisa lisusu bolamu na Yelusalemi mpe na Yuda. Bozala na bobangi te. \v 16 Tala makambo oyo bosengeli kosala : Tika ete moko na moko kati na bino alobaka solo na moninga na ye ; bosambisaka na bosolo mpe bokataka makambo na bosembo kati na bisambiselo na bino, \v 17 bosalaka mabongisi ya komonisa baninga na bino pasi te, bolingaka te kolapa ndayi ya lokuta ; pamba te makambo wana nyonso, nayina yango makasi, » elobi Yawe. \p \v 18 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai : \v 19 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Mikolo ya kokila bilei ya sanza ya minei, ya mitano, ya sambo mpe ya zomi ekokoma mikolo ya esengo mpe ya kosepela, ekokoma bafeti ya nkembo mpe ya esengo mpo na libota ya Yuda. Kasi bolinga solo mpe kimia. » \p \v 20 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bato ya bikolo ebele mpe bavandi ya bingumba ya ndenge na ndenge bakoya lisusu ; \v 21 bamoko bakowuta na engumba moko mpo na kokende na engumba mosusu mpe bakoloba : ‹ Tokende kobondela Yawe mpe koluka elongi na Yawe, Mokonzi ya mampinga ! › Bongo bamosusu bakozongisela bango : ‹ Ngai mpe nakokende ! › \v 22 Boye bato ebele mpe bikolo ya nguya bakoya na Yelusalemi mpo na koluka elongi na Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bakobondela Ye. » \p \v 23 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Na mikolo wana, bato zomi ya bikolo mpe ya nkota ya ndenge na ndenge bakokanga songe ya nzambala ya Moyuda moko mpe bakoloba : ‹ Tika ete tokende elongo na yo, pamba te toyoki ete Nzambe azali na bino elongo. › » \c 9 \s1 Kosambisama ya banguna ya Isalaele \p \v 1 Liloba na Yawe. \q1 Liloba na Yawe ekomi na mokili ya Adraki, \q2 ekowumela na engumba Damasi, \q1 pamba te miso ya bato mpe ya mabota nyonso ya Isalaele \q2 ezali kotalela Yawe. \q1 \v 2 Tala, ekowumela lisusu likolo ya engumba Amati, \q2 na mondelo oyo ekabola yango na engumba Damasi, \q2 na engumba Tiri mpe Sidoni, atako baleki mayele. \q1 \v 3 Engumba Tiri emitongeli yango moko ndako makasi, \q2 emibombeli palata ebele lokola putulu \q2 mpe wolo ebele lokola potopoto ya balabala. \q1 \v 4 Kasi Nkolo akobotola yango, \q2 akosukisa nguya na yango na ebale monene \q2 mpe ekozika na moto. \q1 \v 5 Engumba Ashikeloni ekomona yango mpe ekokoma kolenga ; \q2 engumba Gaza ekokoma na somo makasi, \q1 ndenge moko mpe engumba Ekroni ; \q2 pamba te elikya na yango ekosila. \q1 Engumba Gaza ekozangela mokonzi na yango \q2 mpe engumba Asikaloni ekotikala lisusu na bato te. \q1 \v 6 Bana makangu bakoya kovanda na engumba Asidodi, \q2 mpe nakosilisa lolendo ya bato ya Filisitia. \q1 \v 7 Nakolongola makila na minoko na bango, \q2 mpe bilei ya mbindo na minu na bango ; \q1 kasi ba-oyo bakotikala bakokoma \q2 bato ya Nzambe na biso mpe bakambi ya Yuda ; \q1 mpe bato ya engumba Ekroni bakokoma \q2 lokola bato ya Yebusi. \q1 \v 8 Nakobundela ndako na Ngai \q2 liboso ya mampinga ya basoda ya nguya ; \q1 monyokoli moko te akoya lisusu komonisa bato na Ngai pasi, \q2 pamba te Ngai moko nde nazali kokengela sik’oyo. \s1 Koya ya mokonzi ya kimia \q1 \v 9 Siona, mboka kitoko, sepela, sepela penza makasi ! \q2 Yelusalemi, mboka kitoko, \q1 ganga penza na esengo ! \q2 Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, \q1 azali sembo mpe molongi, \q2 atonda na komikitisa, avandi na likolo ya ane, \q2 na likolo ya mwana ya ane, mwana ya ane ya mwasi. \q1 \v 10 Nakolongola bashar ya bitumba na mokili ya Efrayimi, \q2 bampunda ya bitumba, na engumba Yelusalemi, \q1 mpe matolotolo ya bitumba ekobukana. \q2 Mokonzi yango akosakola kimia na bikolo nyonso, \q1 bokonzi na ye ekobanda longwa na ebale monene moko kino na mosusu, \q2 longwa na ebale kino na basuka ya mabele. \q1 \v 11 Mpo na yo, likolo ya makila ya boyokani na Ngai elongo na yo, \q2 nakobimisa bakangami na yo na libulu oyo ezanga mayi. \q1 \v 12 Bozonga na ndako na bino, oyo batonga makasi, \q2 bino bakangami oyo botondi na elikya, \q1 pamba te nazali koloba na bino sik’oyo : \q2 « Nakozongisela bino mbala mibale \q2 biloko oyo bobungisaki. » \q1 \v 13 Pamba te nabendi tolotolo na Ngai, oyo ezali Yuda, \q2 natie yango likonga na Ngai ya moke oyo ezali Efrayimi. \q1 Siona, nakotelemisa bana na yo ya mibali \q2 mpo ete batelemela bana mibali ya Yavani \q2 mpe nakokomisa yo lokola mopanga ya elombe. \q1 \v 14 Yawe akomimonisa epai na bango, \q2 mpe tolotolo na Ye ekobima lokola mokalikali. \q1 Nkolo Yawe akobeta kelelo \q2 mpe akotambola kati na mopepe makasi. \q1 \v 15 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akobatela bango. \q2 Bakolia mpe bakobuka mabanga ya ebambelo mabanga, \q1 bakomela mpe bakosala makelele lokola bato balangwe masanga, \q2 bakotonda lokola kopo ya makila \q2 oyo basopaka na basonge ya etumbelo. \q1 \v 16 Na mokolo wana, Yawe, Nzambe na bango, \q2 akobikisa bango \q1 ndenge mobateli bibwele abikisaka bameme na ye. \q2 Bakongenga makasi kati na mabele na Ye \q2 lokola mabanga ya talo. \q1 \v 17 Bakozala bato ya esengo, \q2 bakokoma kitoko makasi. \q1 Ble ekopesa bilenge mibali makasi \q2 mpe vino ya sika ekopesa bilenge basi makasi. \c 10 \s1 Kosambwisama ya banzambe ya bikeko \q1 \v 1 Bosenga epai na Yawe ete anokisa mvula ya suka ; \q2 ezali Yawe nde atindaka mapata mpe bakake \q1 oyo ememaka bamvula minene, \q2 Ye nde abimisaka matiti na elanga ya moko na moko. \q1 \v 2 Nzokande, banzambe ya bikeko elobaka maloba ya pamba, \q2 mpe bimoniseli ya bato ya soloka ezalaka ya lokuta : \q1 bazwaka bandoto oyo ezanga tina, \q2 mpe malendisi na bango ezalaka ya lokuta. \q1 Yango wana, bato bakomaki kotelengana lokola bibwele \q2 oyo ezangi mobateli. \s1 Kobima ya sika \q1 \v 3 Kanda na Ngai ya makasi epeli mpo na babateli, \q2 mpe nakopesa bakambi etumbu, \q1 pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 ayei mpo na kobatela etonga na Ye, libota ya Yuda ; \q2 akokomisa bango mpunda na Ye ya lokumu kati na bitumba. \q1 \v 4 Na Yuda nde ekobimela libanga ya songe ya ndako, \q2 likonzi ya ndako ya kapo, tolotolo ya bitumba \q2 mpe bakambi nyonso. \q1 \v 5 Bango nyonso bakokoma lokola bilombe ya bitumba, \q2 oyo bakangamaka te na potopoto ya babalabala \q1 na tango ya bitumba. \q2 Lokola Yawe azali elongo na bango, \q1 bakobunda mpe bakolonga, \q2 ata basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda. \b \q1 \v 6 « Nakolendisa libota ya Yuda \q2 mpe nakobikisa libota ya Jozefi, \q1 nakozongisa bango lisusu na mokili na bango, \q2 pamba te nakoyokela bango mawa ; \q1 bakozala lokola bato oyo nasundolaki te, \q2 pamba te nazali Yawe, Nzambe na bango, \q2 mpe nakoyanola bango. \q1 \v 7 Bato ya Efrayimi bakokoma lokola bilombe ya bitumba ; \q2 mitema na bango ekotonda na esengo lokola bato bameli masanga ; \q1 bana na bango ya mibali bakomona yango \q2 mpe bakotonda na esengo, \q2 bongo mitema na bango ekosepela kati na Yawe. \q1 \v 8 Nakobeta piololo mpo na kobenga bango \q2 mpe nakosangisa bango esika moko. \q1 Solo, nakokangola bango, mpe bakokoma ebele \q2 ndenge bazalaki liboso. \q1 \v 9 Ata soki napanzi bango kati na bikolo ya bapaya, \q2 ezala na mokili oyo eleki mosika, \q1 bakokanisa Ngai kaka. \q2 Bango elongo na bana na bango ya mibali bakobika \q2 mpe bakozonga na mokili na bango. \q1 \v 10 Nakozongisa bango wuta na Ejipito ; \q2 nakosangisa bango wuta na Asiri ; \q1 nakomema bango na Galadi mpe na Libani ; \q2 kasi atako bongo, esika ya kovanda ekozala moke mpo na bango. \q1 \v 11 Bakoleka na kati-kati ya ebale monene ya mitungisi ; \q2 bambonge ya ebale monene ekovanda kimia, \q1 bozindo nyonso ya ebale Nili ekokawuka. \q2 Lolendo ya Asiri ekosila \q2 mpe lingenda ya bokonzi ya Ejipito ekolongwa. \q1 \v 12 Nakosala ete balendisama kati na Yawe : \q2 bakotambola na Kombo na Ye, » \q2 elobi Yawe. \c 11 \s1 Yawe abebisi bikolo ya nguya \q1 \v 1 Mokili ya Libani, fungola bikuke na yo \q2 mpo ete moto ezikisa banzete na yo ya sedele ! \q1 \v 2 Nzete ya sipele, lela, \q2 pamba te nzete ya sedele esili kokweya ! \q1 Banzete milayi esili kokatama. \q2 Banzete ya sheni ya Bashani, bolela ; \q2 pamba te basili kokata zamba monene ! \q1 \v 3 Boyoka ndenge babateli bibwele bazali kolela, \q2 pamba te bitando epai wapi baleisaka bibwele ebebisami. \q1 Boyoka ndenge bankosi ezali koganga, \q2 pamba te zamba ya Yordani, oyo etonda na banzete, \q2 esili kobebisama. \s1 Babateli mibale ya bameme \p \v 4 Tala liloba oyo Yawe, Nzambe na ngai, alobi : \pi1 — Batela malamu bameme oyo babongisi mpo na koboma ! \v 5 Bato oyo basombaka bibwele yango babomaka yango, bazalaka na somo ya etumbu ata moko te. Bato oyo batekaka yango balobaka : « Tika ete Yawe apambolama, pamba te nakomi mozwi ! » Mpe bango moko babateli na yango bayokelaka yango mawa ata moke te. \v 6 Yango wana Ngai mpe nakoyokela lisusu bato ya mokili mawa te, nakokaba moto na moto na maboko ya moninga na ye mpe ya mokonzi na ye. Bakonzi bakobebisa mokili, kasi nakokangola ata moto moko te wuta na maboko ya bakonzi yango, elobi Yawe. \p \v 7 Boye, nabatelaki malamu bameme oyo babongisaki mpo na koboma ; mpe mingi penza bameme oyo ezalaki na pasi makasi. Nakamataki mangenda mibale : nabengaki moko Ngolu, mpe mosusu, Bomoko. Bongo, nakomaki kobatela bameme. \v 8 Na sanza moko kaka, nabomaki babateli bibwele misato ; nakokaki lisusu kokanga motema te, mpe etonga eyinaki ngai. \v 9 Nalobaki na etonga ya bibwele : \pi1 — Nakozala lisusu mobateli na bino te. Tika ete oyo ekokufa ekufa na yango, oyo ekobunga ebunga na yango ; mpe tika ete oyo ekotikala ebomana yango na yango ! \p \v 10 Nakamataki lingenda oyo nabengaki Ngolu, nabukaki yango mpo na kotalisa ete boyokani oyo nasalaki elongo na bikolo nyonso esili. \v 11 Boyokani esilaki nde na mokolo wana ; bongo, etonga oyo ezalaki na pasi makasi mpe ezalaki kotala ngai esosolaki ete ezalaki solo Liloba na Yawe. \p \v 12 Nalobaki na bango : \pi1 — Soki bomoni ete ezali malamu, bopesa ngai lifuti na ngai ; soki te, botika na bino. \p Bafutaki ngai mbongo ya bibende ya palata tuku misato lokola lifuti na ngai. \p \v 13 Mpe Yawe alobaki na ngai : \pi1 — Bwaka yango epai ya mosali mbeki ; yango nde motuya ya malonga oyo bamoni ete ekoki na Ngai ! \p Nakamataki mbongo yango ya bibende tuku misato mpe nabwakaki yango kati na Tempelo ya Yawe, epai ya mosali mbeki. \p \v 14 Bongo nabukaki lisusu lingenda ya mibale oyo nabengaki Bomoko, mpo na kotalisa ete bondeko kati na libota ya Yuda mpe ya Isalaele ekufi. \p \v 15 Yawe alobaki na ngai : \pi1 — Kamata lisusu bisalelo ya mobateli bibwele ya zoba ! \v 16 Pamba te nakobimisa kati na mokili mobateli bibwele ya sika oyo akobanda koluka te bibwele oyo ebungi, akolandela te bana bibwele, akosalisa te bapota ya bibwele oyo ezoki, akoleisa te oyo ezali na nzoto kolongono, kasi akobanda koliaka misuni ya bibwele ya mafuta mpe kobuka yango makolo. \v 17 Mawa na mobateli bibwele ya zoba oyo asundolaka etonga na ye ! Tika ete mopanga ekata ye loboko mpe etobola ye liso oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ! Tika ete loboko na ye ekawuka, solo, ekawuka penza ! Tika ete liso na ye, oyo ezali na ngambo ya loboko ya mobali ekufa, ekufa solo ! \c 12 \ms1 Elonga ya suka ya mokonzi \s1 Nzambe abundeli Yelusalemi \p \v 1 Liloba na Yawe. \p Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele. \b \p Yawe oyo atanda likolo mpe asala miboko ya mabele, Ye oyo atia Molimo na Ye kati na moto, alobi : \v 2 « Nakokomisa Yelusalemi lokola kopo ya vino oyo elangwisaka bikolo nyonso ya zingazinga na yango ; bakozingela solo Yuda mpe Yelusalemi. \v 3 Na mokolo wana, nakokomisa Yelusalemi lokola libanga ya kilo liboso ya bikolo nyonso ; moto nyonso oyo akoluka kotombola yango akozoka ; mpe bikolo nyonso ekosangana mpo na kobundisa Yelusalemi. \v 4 Na mokolo wana, nakobangisa bampunda nyonso mpe nakokomisa batambolisi na yango liboma, » elobi Yawe. « Nakosenzela libota ya Yuda, kasi nakoboma miso ya bampunda nyonso ya bikolo. \v 5 Boye, bakambi ya Yuda bakomilobela : ‹ Bato ya Yelusalemi bazali makasi mpo ete Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali Nzambe na bango. › \v 6 Na mokolo wana, nakokomisa bakambi ya Yuda lokola moto kati na liboke ya bakoni, lokola koni ya moto na se ya liboke ya matiti ekawuka : bakozikisa bikolo nyonso ya zingazinga na bango, ezala oyo ezali na ngambo ya loboko na bango ya mobali to ya mwasi. Kasi Yelusalemi ekotikala kaka na esika na yango. \v 7 Yawe akobikisa liboso bandako ya kapo ya Yuda mpo ete lokumu ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi eleka te lokumu ya Yuda. \v 8 Na mokolo wana, Yawe akobatela bavandi ya Yelusalemi mpo ete bato ya bolembu kati na bango bakoma makasi lokola Davidi, mpe libota ya Davidi ekoma lokola Nzambe, lokola Anjelu ya Yawe, oyo azali kotambola liboso na bango. \v 9 Na mokolo wana, nakobima mpo na koboma bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi. \s1 Matanga mpe kopetolama \p \v 10 Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa. \v 11 Na mokolo wana, matanga kati na Yelusalemi ekozala monene lokola matanga ya Adadi-Rimoni na etando ya Megido. \v 12 Mokili mobimba ekosala matanga, etuka na etuka na esika na yango elongo na basi na yango : etuka ya libota ya Davidi elongo na basi na yango, etuka ya libota ya Natan elongo na basi na yango, \v 13 etuka ya libota ya Levi elongo na basi na yango, etuka ya libota ya Shimei elongo na basi na yango, \v 14 mpe bituka nyonso oyo etikali elongo na basi na yango. \c 13 \s1 Kopetolama na masumu \p \v 1 Na mokolo wana, etima moko ekobimisa mayi mpo na kopetola masumu mpe mbindo ya libota ya Davidi mpe ya bavandi ya Yelusalemi. \p \v 2 Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, nakosala ete bakombo ya banzambe ya bikeko elimwa na mokili ; boye bakotikala kokanisa yango lisusu te. Nakolongola lisusu kati na mokili basakoli mpe molimo ya mbindo. \v 3 Boye, soki moto moko akobi kosakola, tika ete tata mpe mama oyo babota ye baloba na ye : ‹ Osengeli kokufa mpo ete olobi makambo ya lokuta na Kombo na Yawe ! › Wana akozala kosakola, baboti na ye bakotobola ye na mopanga. \v 4 Na mokolo wana, mosakoli moko na moko akozala na soni mpo na kosakola mpe koloba bimoniseli na ye ; akokosa lisusu bato te na kolataka bilamba ya basakoli, oyo basala na bapwale. \v 5 Akoloba : ‹ Nazali na ngai mosakoli te ; ngai nasalaka na ngai bilanga, mabele nde ezalaka libula na ngai wuta bolenge na ngai ! › \v 6 Soki batuni ye : ‹ Bongo bapota oyo ezali na tolo na yo ewuti wapi ? › Akozongisa : ‹ Nazokaki yango kati na ndako ya balingami na ngai. › \s1 Kobetama ya mobateli bibwele \q1 \v 7 Oh mopanga, telema ! \q2 Tika ete otelema mpo na koboma mobateli bibwele na Ngai ! \q1 Tika ete oboma moninga na Ngai, » \q2 elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \q1 « Beta mobateli bibwele, \q2 mpe bameme ekopalangana. \q2 Bongo nakoboma ata bibwele ya mike. \q1 \v 8 Na mokili mobimba, » \q2 elobi Yawe, \q1 « bandambo mibale ya bato kati na bandambo misato \q2 bakobebisama mpe bakokufa ; \q1 mpe ndambo moko ya bato kati na bandambo misato \q2 nde bakotikala na mokili. \q1 \v 9 Nakomema ndambo moko wana ya bato na moto, \q2 nakopetola bango ndenge bapetolaka palata na moto \q1 mpe nakomeka bango \q2 ndenge bamekaka wolo na moto ; \q1 bakobelela Kombo na Ngai, \q2 mpe Ngai nakoyanola bango. \q1 Nakoloba na bango : \q2 ‹ Bozali bato na Ngai, › \q1 mpe bango bakoloba : \q2 ‹ Yawe azali Nzambe na biso ! › » \c 14 \s1 Mokolo ya Yawe \p \v 1 Tala, mokolo ya Yawe ezali koya ; ezali mokolo oyo bakokabola bomengo ya bitumba kati na yo, Yelusalemi. \p \v 2 Nakosangisa bikolo nyonso, na Yelusalemi, mpo ete babundisa engumba yango ; bakobotola yango, bakobuka bandako na yango, bakozwa basi na yango na makasi mpo na kobebisa lokumu na bango, mpe ndambo ya bato kati na yango bakokende na bowumbu, bongo ndambo mosusu ya bato bakotikala. \p \v 3 Bongo Yawe akobima mpe akobundisa bikolo wana, ndenge asalaka na tango ya bitumba. \v 4 Na mokolo wana, makolo na Ye ekotelema likolo ya ngomba ya banzete ya olive oyo ezali na ngambo ya este ya Yelusalemi ; mpe ngomba ya olive ekokabwana na biteni mibale : eteni moko na ngambo ya este mpe eteni mosusu na ngambo ya weste. Lubwaku moko ya monene ekosalema : eteni moko ya ngomba ekokende na ngambo ya nor, mpe eteni mosusu, na ngambo ya sude. \v 5 Bokokimela kati na lubwaku ya bangomba na ngai, pamba te lubwaku ya bangomba ekokende kino na Atsali ; bokokima ndenge bokimaki tango mabele eninganaki na tango Oziasi azalaki mokonzi ya Yuda. Bongo Yawe, Nzambe na ngai, akoya elongo na basantu na Ye nyonso. \p \v 6 Na mokolo wana, ezala pole to malili to mpe mvula, eloko moko te ekozala. \v 7 Ekozala mokolo ya ndenge mosusu, mokolo ezanga moyi mpe butu, mokolo oyo Ye moko kaka Yawe ayebi ; pole ekobima soki pokwa ekoki. \p \v 8 Na mokolo wana, mayi oyo etiolaka ekobimela na Yelusalemi. Ndambo moko ekokende na ebale monene ya este mpe ndambo mosusu, na ebale monene ya weste, na eleko ya malili mpe ya molunge. \p \v 9 Yawe akozala Mokonzi ya mabele mobimba. Na mokolo wana, Ye moko kaka nde akozala Nkolo, mpe bakosambela kaka Ye. \p \v 10 Mokili mobimba, longwa na Geba kino na Rimoni, na ngambo ya sude ya Yelusalemi, ekokoma lokola etando ya Araba ; kasi Yelusalemi ekozala kaka na likolo, ekotikala kaka na esika na yango, longwa na Ekuke ya Benjame kino na esika oyo Ekuke ya kala ezalaki, na songe ya bamir, longwa na ndako molayi ya Ananeyeli kino na bikamolelo ya mokonzi. \v 11 Bato bakozongela kovanda na Yelusalemi ; Yelusalemi ekobebisama lisusu te mpe ekokoma na kimia. \p \v 12 Tala etumbu oyo Yawe akopesa na bikolo nyonso oyo ekobundisa Yelusalemi : Misuni ya banzoto na bango ekobanda kopola wana bazali nanu na bomoi ; miso na bango ekokufa na bilongi na bango mpe balolemo na bango ekokufa kati na minoko na bango. \v 13 Na mokolo wana, Yawe akosala ete mobulu ekota kati na bango, bakobetana makofi mpe bakobomana bango na bango. \v 14 Bato ya Yuda mpe bakobunda kati na Yelusalemi, bakokongola bomengo ya bikolo nyonso ya zingazinga : wolo, palata mpe bilamba mingi koleka. \v 15 Etumbu ya ndenge moko kaka ekokweya likolo ya bampunda, ya bamile, ya bashamo, ya ba-ane mpe ya banyama nyonso oyo ekozala na molako. \p \v 16 Boye, batikali kati na bikolo nyonso oyo ebundisaki Yelusalemi bakomata mibu nyonso na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mpe mpo na kosala feti ya Bandako ya kapo. \v 17 Soki bato ya etuka moko ya mabele bakei te na Yelusalemi mpo na kogumbamela Mokonzi, Yawe Mokonzi ya mampinga, mvula ekonoka te na mokili na bango. \v 18 Soki bato ya Ejipito baboyi kokende kosala feti na Yelusalemi, mvula ekonoka te na mokili na bango. Boye, Yawe akopesa bango etumbu oyo abongisa mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo. \v 19 Ekozala etumbu ya Ejipito mpe ya bikolo nyonso oyo ekoboya kokende kosala feti ya Bandako ya kapo. \p \v 20 Na mokolo wana, bakotia makomi na bangonga mike-mike ya bampunda : « Ebulisami mpo na Yawe ! » Banzungu ya Tempelo ya Yawe ekozala mpe bule ndenge bakopo ezalaka bule liboso ya etumbelo. \v 21 Banzungu nyonso kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda ekobulisama mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga ; mpe bato nyonso oyo bakoya kopesa makabo bakozwa ndambo ya banzungu mpe bakolambela yango. Na mokolo wana, ata moto moko te ya mombongo akotikala kati na Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga.