\id RUT Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Rite \toc1 Rite \toc2 Rite \toc3 Rit \mt1 Rite \c 1 \s1 Libota ya Elimeleki kati na Moabi \p \v 1 Na mikolo oyo bilombe bazalaki koyangela, nzala makasi ezalaki kati na mokili. Mobali moko ya Beteleemi ya Yuda, elongo na mwasi na ye mpe bana na ye mibale ya mibali, bakendeki kovanda na mboka Moabi. \v 2 Kombo ya mobali yango ezalaki « Elimeleki ; » kombo ya mwasi na ye ezalaki « Naomi ; » mpe bakombo ya bana na ye ya mibali ezalaki « Maaloni » mpe « Kilioni. » Bazalaki bato ya libota ya Efrate mpe bawutaki na Beteleemi ya Yuda. Bakendeki na Moabi mpe bavandaki kuna. \v 3 Elimeleki, mobali ya Naomi, akufaki ; mpe Naomi atikalaki ye moko elongo na bana na ye mibale ya mibali. \v 4 Bana na ye mibale ya mibali babalaki basi ya Moabi : ya liboso, kombo na ye ezalaki « Oripa ; » mpe ya mibale, « Rite. » Sima na bango kowumela kuna mibu pene zomi, \v 5 Maaloni mpe Kilioni bakufaki. Naomi atikalaki ye moko, azangaki bana na ye mibale ya mibali mpe mobali na ye. \s1 Naomi mpe Rite bazongi na Beteleemi \p \v 6 Tango Naomi ayokaki wuta na Moabi ete Yawe ayaki mpo na kosunga bato na Ye na kopesa bango biloko ya kolia, ye elongo na babokilo na ye ya basi babongamaki mpo na kozonga na Yuda wuta na Moabi. \v 7 Elongo na babokilo na ye mibale ya basi, Naomi alongwaki na esika oyo azalaki kovanda mpe azwaki nzela mpo na kozonga na mokili ya Yuda. \p \v 8 Bongo Naomi alobaki na babokilo na ye mibale ya basi : \pi1 — Bozonga, moto na moto na ndako ya mama na ye. Tika ete Yawe asalela bino bolamu ndenge bosalaki bolamu epai ya bato oyo bakufaki mpe epai na ngai moko. \v 9 Tika ete Yawe apesa na moko na moko na bino bopemi kati na ndako ya mobali mosusu. \p Bongo Naomi apesaki bango beze, mpe balelaki makasi. \v 10 Sima, balobaki na ye : \pi1 — Tokokende elongo na yo, epai ya bato na yo. \p \v 11 Kasi Naomi azongiselaki bango : \pi1 — Bana na ngai ya basi, bozonga na bandako na bino. Mpo na nini kolanda ngai ? Boni, nakoki lisusu kobota bana mibali oyo bakoki kozala mibali na bino ? \v 12 Bana na ngai, bozonga epai na bino ; nakomi mobange makasi, nakokoka lisusu kobala te. Ata soki nakanisi ete nazali nanu na elikya ya kobota, mpe, na butu ya lelo, nasangisi nzoto na mobali, mpe naboti bana mibali, \v 13 boni, bokokoka penza kozela kino bakokola ? Bokokoba kaka kozanga kobala mpo na bango ? Te, bana na ngai ! Mawa na ngai ezali makasi koleka mawa na bino, pamba te loboko na Yawe eyokisi ngai pasi makasi. \p \v 14 Tango bayokaki bongo, balelaki lisusu. Boye Oripa apesaki mama-bokilo na ye beze mpe mbote ya suka. Kasi Rite akangamaki kaka na ye. \p \v 15 Naomi alobaki na Rite : \pi1 — Tala, mbanda na yo azongi epai ya bato na ye mpe epai ya banzambe na ye ; yo mpe zonga elongo na ye. \p \v 16 Kasi Rite azongiselaki ye : \pi1 — Kotindika ngai na makasi te ete natika yo to napengwa na nzela na yo ; pamba te na esika nyonso oyo yo okokende nde ngai mpe nakokende, mpe na esika nyonso oyo yo okovanda nde ngai mpe nakovanda ; bato na yo bakozala bato na ngai, mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai. \v 17 Na esika oyo yo okokufa nde ngai mpe nakokufa, mpe na esika yango nde bakokunda ngai. Tika ete Yawe apesa ngai etumbu ya makasi soki eloko mosusu ekaboli biso longola kaka kufa. \p \v 18 Tango Naomi amonaki ete Rite atingami kaka kokende na ye elongo, atikaki kotindika ye na makasi. \v 19 Yango wana, bango mibale bakendeki kino bakomaki na Beteleemi. Tango bakomaki na Beteleemi, engumba mobimba eyokaki mawa mpo na bango. Mpe basi batunaki : \pi1 — Oyo Naomi ? \p \v 20 Ye alobaki na bango : \pi1 — Bobenga ngai lisusu Naomi te, kasi Mara ; pamba te Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayokisi ngai mawa mingi. \v 21 Nazalaki na biloko ebele tango nakendeki, kasi Yawe azongisi ngai maboko pamba. Bongo mpo na nini kobenga ngai lisusu Naomi ? Yawe ayokisi ngai pasi, mpe Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayokisi ngai mawa. \p \v 22 Ndenge wana nde Naomi azongaki na Yuda wuta na Moabi, elongo na Rite, moto ya Moabi, bokilo na ye ya mwasi. Bakomaki na Beteleemi, na ebandeli ya tango oyo babukaka bambuma ya orje. \c 2 \s1 Rite akutani na Boazi \p \v 1 Naomi azalaki na ndeko moko kati na libota ya mobali na ye ; ndeko yango azalaki ya etuka ya Elimeleki, azalaki penza na bozwi mingi ; kombo na ye ezalaki « Boazi. » \p \v 2 Rite, moto ya Moabi, alobaki na Naomi : \pi1 — Okoki kopesa ngai nzela ya kokende na bilanga mpo na kolokota mito ya ble, oyo bato oyo bakataka ble batiki. Nakozala na sima ya moto oyo akosalela ngai ngolu. \p Naomi alobaki na ye : \pi1 — Mwana na ngai, kende. \p \v 3 Rite akendeki mpe abandaki kolokota ble na bilanga, na sima ya bato oyo bakataka ble. Akutanaki na libaku ya malamu, pamba te ayaki kososola ete azali kosala kati na elanga ya Boazi, moto ya etuka ya Elimeleki. \v 4 Sima na mwa tango, Boazi awutaki na Beteleemi ; ayaki ye moko, apesaki mbote na bato oyo bakataka ble na koloba : \pi1 — Tika ete Yawe azala elongo na bino ! \p Bazongiselaki ye : \pi1 — Tika ete Yawe apambola yo ! \p \v 5 Boazi atunaki mokambi ya bato oyo bakataka ble : \pi1 — Elenge mwasi wana azali ya nani ? \p \v 6 Mokambi ya bato oyo bakataka ble azongisaki : \pi1 — Azali elenge mwasi ya Moabi ; ayaki elongo na Naomi wuta na mboka Moabi. \v 7 Asengaki biso nzela ya kolokota mito ya ble, oyo etikalaka tango bakangaka maboke, na sima ya bato oyo bakataka ble. Na tongo ya lelo, akotaki na bilanga mpe azali kosala na molende nyonso ; kino sik’oyo, apemi kaka tango moke. \p \v 8 Boazi alobaki na Rite : \pi1 — Yoka ngai malamu, mwana na ngai ya mwasi : « Kokende kolokota ble na bilanga mosusu te mpe kokende mosika ya elanga oyo te, kasi vanda awa elongo na basali na ngai ya basi. \v 9 Tala malamu bilanga oyo epai wapi bato bazali kokata ble mpe zala na sima ya bana basi oyo bazali kolokota ble. Nalobi na mibali ete basimba yo te. Tango nyonso ozali na posa ya mayi, kende mpe mela na bambeki oyo mibali batondisi. » \p \v 10 Tango Rite ayokaki bongo, agumbamaki, elongi kino na mabele. Alobaki : \pi1 — Mpo na nini nazwi ngolu ya boye na miso na yo ? Mpo na nini ozali kopesa ngai lokumu ya boye, ngai oyo nazali mopaya ? \p \v 11 Boazi azongisaki : \pi1 — Bayebisaki ngai makambo nyonso oyo osalaki mpo na mama-bokilo na yo wuta tango mobali na ye akufaki, ndenge otikaki tata mpe mama na yo, mboka epai wapi obotama, mpe oyaki kovanda elongo na bato oyo oyebaki liboso te. \v 12 Tika ete Yawe afuta yo mpo na makambo oyo osalaki. Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, afuta yo koleka, lokola oyaki kobombama na se ya mapapu na Ye ! \p \v 13 Rite alobaki : \pi1 — Tika ete nakoba kozwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai. Obondisi motema na ngai, osololi na mwasi mosali na yo na boboto nyonso. Nzokande, nakokani te ata na moko ya basali na yo ya basi. \p \v 14 Na tango ya kolia, Boazi alobaki na ye : « Pusana awa mpe kamata eteni ya lipa, zindisa yango na vino. » \p Tango avandaki elongo na bato oyo bakataka ble, Boazi apesaki ye ndambo ya bambuma bakalinga. Aliaki ndenge alingaki mpe atikaki mosusu. \v 15 Tango atelemaki mpo na kolokota lisusu ble, Boazi apesaki mitindo epai ya basali na ye : « Botika ye kolokota ata oyo ezali na kati-kati ya maboke, botungisa ye te. \v 16 Bokoki mpe kokweyisa bambuma mpo na ye, mpo ete alokota na ye, mpe bozomela ye te. » \p \v 17 Boye Rite alokotaki ble na elanga kino na pokwa, aningisaki oyo alokotaki mpe azwaki bakilo pene tuku minei ya bambuma ya orje. \v 18 Amemaki yango na engumba, mpe mama-bokilo na ye amonaki bambuma oyo alokotaki. Rite abimisaki lisusu biloko oyo atikaki tango atondaki mpe apesaki yango epai ya mama-bokilo na ye. \p \v 19 Naomi atunaki Rite : \pi1 — Lelo, olokotaki ble na esika nini ? Osalaki na esika nini ? Tika ete moto oyo apesi yo lokumu ya boye apambolama ! \p Bongo Rite ayebisaki mama-bokilo na ye makambo oyo etali nkolo ya esika epai wapi asalaki. Alobaki : « Kombo ya moto yango ezali Boazi. » \p \v 20 Naomi alobaki na bokilo na ye ya mwasi : « Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo atiki te kotalisa bolamu na Ye epai na biso bato ya bomoi mpe epai na bakufi. Mobali wana azali ndeko na biso ya pembeni, azali kati na molongo ya bato oyo bakoki kosikola biso. » \p \v 21 Rite, moto ya Moabi, alobaki : \pi1 — Alobaki na ngai kutu : « Vanda elongo na basali na ngai kino bakosilisa kobuka bambuma na ngai nyonso. » \p \v 22 Naomi azongiselaki Rite, bokilo na ye ya mwasi : \pi1 — Ekozala malamu mpo na yo kotambolaka elongo na basali na ye ya basi ; pamba te soki okeyi na elanga ya moto mosusu, okoki komona pasi. \p \v 23 Boye Rite avandaki pembeni ya basali ya Boazi mpo na kolokota mito ya ble, kino tango ya kobuka bambuma ya orje mpe ya ble, esilaki. Awumelaki kovanda elongo na mama-bokilo na ye. \c 3 \s1 Rite Asengi \p \v 1 Mokolo moko, Naomi, mama-bokilo ya Rite, alobaki na ye : \pi1 — Mwana na ngai, nasengeli te koluka nzela mpo na bolamu na yo ? \v 2 Pamba te oyebi malamu ete Boazi, oyo osalaki elongo na basali na ye ya basi, azali ndeko na biso. Na pokwa ya lelo, akoyungola orje oyo basilaki kosopa na etando. \v 3 Boye, sukola malamu nzoto na yo, pakola mafuta mpe lata bilamba na yo, oyo eleki kitoko. Bongo, okokende na etando epai wapi akobeta orje na ye ; kasi sala ete Boazi ayeba te ete ozali na esika yango kino akosilisa kolia mpe komela. \v 4 Tango akokende kolala, okotala malamu esika nini akozala. Sima, okopusana, okolongola elamba oyo ezipi makolo na ye mpe okomilalisa wana, na makolo na ye. Ye moko akoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala. \p \v 5 Rite azongiselaki ye : \pi1 — Nakosala nyonso oyo oyebisi ngai. \p \v 6 Bongo Rite akendeki na etando mpe asalaki makambo nyonso oyo mama-bokilo na ye ayebisaki ye. \v 7 Tango Boazi asilisaki kolia mpe komela, motema na ye ezalaki na esengo ; akendeki kolala na suka ya mipiku ya orje. Bongo Rite apusanaki malembe-malembe, alongolaki elamba oyo ezipaki makolo ya Boazi mpe amilalisaki wana. \v 8 Na kati-kati ya butu, tango Boazi ayokaki malili, aminyololaki mpe amonaki mwasi alali na makolo na ye. \v 9 Atunaki ye : \pi1 — Yo ozali nani ? \p Azongisaki : \pi1 — Ezali ngai Rite, mwasi mosali na yo. Tanda songe ya elamba na yo kino epai na ngai, pamba te ozali na ndingisa ya kosikola. \p \v 10 Boazi azongiselaki ye : \pi1 — Tika ete Yawe apambola yo, mwana na ngai ya mwasi ! Bosembo oyo otalisi sik’oyo, ezali monene koleka bosembo oyo otalisaki liboso ; pamba te otambolaki te sima na bilenge mibali, ezala bazwi to babola. \v 11 Mpe sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, kobanga te ; nakosalela yo nyonso oyo okosenga, pamba te bato nyonso ya esika oyo bayebi ete ozali mwasi ya malonga. \v 12 Sik’oyo, atako solo nazali na ndingisa ya kosikola, kasi ezali na mosikoli mosusu oyo azali pene na yo koleka ngai. \v 13 Boye, lekisa butu awa ; bongo lobi na tongo, tokotala soki moto yango akolinga kosikola yo. Soki akolinga, wana tika ye asikola yo ; kasi soki aboyi, nalaki yo na Kombo na Yawe ete ngai nakosikola yo. Boye liboso ete tongo etana, lala awa. \p \v 14 Boye Rite alalaki na makolo na ye mpe alamukaki na tongo-tongo, wana molili ezalaki nanu kopekisa bato komonana malamu ; pamba te Boazi alobaki : « Moto moko te ayeba ete mwasi moko ayaki na etando oyo. » \v 15 Liboso ete akende, Boazi ayebisaki ye : « Pesa ngai elamba oyo olati, simba yango malamu. » Wana Rite asimbaki yango malamu, Boazi atielaki ye bakilo pene tuku mibale ya orje mpe asungaki ye mpo na kotombola mpe kotia yango na moto. Mpe Rite azongaki na engumba. \p \v 16 Tango Rite akomaki epai ya mama-bokilo na ye, Naomi atunaki ye : \pi1 — Mwana na ngai ya mwasi, makambo eleki ndenge nini ? \p Boye Rite ayebisaki ye makambo oyo Boazi asalaki mpo na ye. \v 17 Mpe abakisaki : « Apesaki ngai kutu bakilo tuku mibale ya orje oyo, pamba te ayebisaki ngai : ‹ Kozonga maboko pamba te epai ya mama-bokilo na yo. › » \p \v 18 Bongo Naomi alobaki na ye : \pi1 — Sik’oyo mwana na ngai ya mwasi, vanda awa kino okomona ndenge makambo oyo ekosuka ; pamba te mobali wana akozala na kimia te kino akosilisa likambo oyo, kaka na mokolo ya lelo. \c 4 \s1 Libala ya Boazi mpe Rite \p \v 1 Wana Boazi akendeki na ekuke ya engumba mpe avandaki kuna, amonaki mosikoli, oyo Boazi alobaki ete ye nde azali na ndingisa ya kosikola Rite, azali koleka. Boazi alobaki na ye : « Ndeko na ngai ya mobali, yaka nanu mpe vanda awa. » Moto yango apusanaki mpe avandaki. \p \v 2 Boazi abengaki mibali zomi kati na bakambi ya engumba mpe asengaki ete bavanda na bango elongo. Tango bavandaki, \v 3 Boazi alobaki na mosikoli ya Rite : \pi1 — Naomi oyo awutaki na mokili ya Moabi azali koteka elanga ya Elimeleki, ndeko na biso. \v 4 Ngai nazwaki likanisi ya koyebisa yo mpe kosenga na yo ete osomba na yo yango na miso ya bavandi ya engumba mpe ya bakambi oyo bazali awa. Soki ondimi kosomba yango, somba na yo. Soki te, yebisa ngai mpo ete nayeba ; pamba te yo nde ozali moto ya liboso oyo azali na ndingisa ya kosomba yango, mpe ngai nazali na ndingisa sima na yo. \p Moto yango azongiselaki ye : \pi1 — Iyo, nakosomba yango. \p \v 5 Boazi alobaki : \pi1 — Na mokolo oyo okosomba elanga na maboko ya Naomi, okozwa mpe Rite, moto ya Moabi, mwasi akufisa mobali ; mpo na kosala ete kombo ya mowei etikala na libula na ye. \p \v 6 Mosikoli alobaki : \pi1 — Nakoki kosikola yango te, noki te nakotia mobulu kati na libula na ngai. Sikola yango yo moko, pamba te ngai nakoki te kosala yango. \p \v 7 Nzokande, na tango ya kala kati na Isalaele, mpo na kosikola mpe kopesa libula, moto moko azalaki kolongola sapatu na ye mpe kopesa yango epai ya moto mosusu. Sapatu yango ezalaki lokola elembo ya litatoli kati na Isalaele. \p \v 8 Mosikoli alobaki na Boazi : \pi1 — Yo moko somba yango. \p Boye, alongolaki sapatu na ye. \p \v 9 Boazi ayebisaki bampaka mpe bato nyonso : \pi1 — Bino moko bozali batatoli ete nasombi na maboko ya Naomi libula nyonso ya Elimeleki, ya Kilioni mpe ya Maaloni. \v 10 Nazwi lisusu Rite, moto ya Moabi, oyo azalaki mwasi ya Maaloni oyo akufa, mpo ete azala mwasi na ngai, mpo na kosala ete kombo na ye etikala na libula na ye, ete ebunga te kati na bandeko na ye mpe kati na buku ya leta ya engumba na ye. Bino bozali batatoli na yango lelo. \p \v 11 Boye, bampaka mpe bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya engumba balobaki : \pi1 — Iyo, biso moko tozali batatoli. Tika ete Yawe akomisa mwasi oyo azali koya na ndako na yo, lokola Rasheli mpe Lea, oyo batongaki elongo libota ya Isalaele. Tika ete okoma moto monene kati na Efrata mpe moto ya lokumu kati na Beteleemi ! \v 12 Tika ete bakitani oyo Yawe akopesa yo na nzela ya elenge mwasi oyo, bakomisa ndako na yo lokola ndako ya Peretsi oyo Tamari abotelaki Yuda ! \b \p \v 13 Boye, Boazi akamataki Rite mpe abalaki ye. Sima na Boazi kosangisa na ye nzoto, Yawe asalelaki Rite ngolu : azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. \v 14 Basi balobaki na Naomi : \q1 « Tika ete Yawe akumisama ; \q2 Ye oyo, na mokolo ya lelo, atiki yo te \q1 kozanga mosikoli oyo kombo na ye \q2 ekokende sango kati na Isalaele ! \q1 \v 15 Akoyeisa bomoi na yo sika \q2 mpe akosunga yo na kimobange na yo, \q1 pamba te bokilo na yo, oyo alingaka yo \q2 mpe azali na motuya na miso na yo \q1 koleka bana mibali sambo, \q2 aboteli yo mwana mobali. » \p \v 16 Naomi azwaki mwana, atiaki ye na tolo na ye mpe akomaki mama mobokoli na ye. \v 17 Basi ya mboka wana balobaki : « Naomi aboti mwana mobali ! » Bapesaki mwana mobali yango kombo « Obedi. » Obedi abotaki Izayi, mpe Izayi abotaki Davidi. \b \li4 \v 18 Tala libota ya Peretsi : \b \li1 Peretsi abotaki Etsironi, \li1 \v 19 Etsironi abotaki Rami, \li1 Rami abotaki Aminadabi, \li1 \v 20 Aminadabi abotaki Nashoni, \li1 Nashoni abotaki Salima, \li1 \v 21 Salima abotaki Boazi, \li1 Boazi abotaki Obedi, \li1 \v 22 Obedi abotaki Izayi, \li1 Izayi abotaki Davidi.