\id REV Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Emoniseli \toc1 Emoniseli \toc2 Emoniseli \toc3 Em \mt1 Emoniseli \c 1 \s1 Maloba ya ebandeli \p \v 1 Emoniseli kowuta na Yesu-Klisto. \p Nzambe apesaki Ye yango mpo ete alakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli koya kala mingi te. Yesu-Klisto atindaki anjelu na Ye koyebisa emoniseli yango epai ya Yoane, mosali na Ye. \v 2 Lokola motatoli, Yoane asakolaki Liloba na Nzambe ndenge Yesu-Klisto ayebisaki ye yango ; asakolaki makambo nyonso oyo amonaki. \v 3 Esengo na moto oyo atangaka maloba ya lisakoli oyo, mpe esengo na bato oyo bayokaka maloba yango mpe babatelaka makambo oyo ekomama kati na yango, pamba te tango ekomi pene. \s1 Bambote \m \v 4 Yoane ; \b \mi Epai ya Mangomba sambo kati na etuka ya Azia : \b \m Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino, kowuta na Ye oyo azali, azalaki mpe azali koya, kowuta na milimo sambo oyo bazalaka liboso ya Kiti na Ye ya Bokonzi, \v 5 mpe kowuta na Yesu-Klisto, Motatoli oyo akosaka te, Mosekwi ya liboso kati na bakufi, mpe Mokonzi ya bakonzi ya mokili ! \b \b \p Epai na Ye oyo alingaka biso mpe akangolaki biso na masumu na biso na nzela ya makila na Ye, \v 6 Ye oyo akomisaki biso ekolo ya bakonzi mpe ya Banganga-Nzambe mpo na kosalela Nzambe, Tata na Ye : Tika ete nkembo mpe nguya ezonga epai na Ye mpo na libela na libela ! Amen ! \q1 \v 7 « Botala, azali koya kati na mapata ! \q2 Miso nyonso ekomona Ye, \q1 ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ; \q2 mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » \qc Ekosalema penza bongo ! Amen. \q1 \v 8 « Nazali Alifa mpe Omega, » elobi Nkolo Nzambe, \q2 « Ye oyo azali, azalaki, mpe azali koya, \q2 Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. » \s1 Yoane amoni Klisto kati na emoniseli \p \v 9 Ngai Yoane, ndeko na bino, oyo azali kokabola elongo na bino pasi, bokonzi mpe molende kati na Yesu, nazalaki kati na esanga ya Patimosi, likolo ya Liloba na Nzambe mpe litatoli na ngai na tina na Yesu. \v 10 Na mokolo ya Nkolo, Molimo ya Nzambe asimbaki ngai, mpe nayokaki sima na ngai mongongo moko ya makasi lokola kelelo \v 11 koloba : \wj « Koma na buku makambo oyo ozali komona, mpe tinda yango na Mangomba sambo oyo : Efeso, Simirne, Pergame, Tiyatire, Sarde, Filadelfi mpe Laodise. »\wj* \p \v 12 Nalukaki kobaluka mpo na koluka koyeba nani oyo azali koloba na ngai. Mpe tango nabalukaki, namonaki bitelemiselo sambo ya minda, basala na wolo. \v 13 Mpe kati na bitelemiselo yango, ezalaki na moto moko lokola Mwana na Moto. Alataki nzambala ya molayi mpe mokaba moko ya wolo zingazinga ya tolo na Ye. \v 14 Moto mpe suki na Ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe. Miso na Ye ezalaki lokola moto oyo ezali kopela makasi. \v 15 Makolo na Ye ezalaki lokola bronze oyo babimisi sika longwa na fulu ya moto makasi, mpe mongongo na Ye ezalaki koyokana lokola makelele ya mayi ya ebale monene. \v 16 Na loboko na Ye ya mobali, asimbaki minzoto sambo ; mpe wuta na monoko na Ye, mopanga moko bapelisa na bangambo na yango nyonso mibale ezalaki kobima. Elongi na Ye ezalaki lokola moyi, na tango oyo engalaka makasi. \p \v 17 Tango namonaki Ye, nakweyaki na makolo na Ye lokola moto akufi. Bongo asimbaki ngai na loboko na Ye ya mobali mpe alobaki na ngai : \wj « Kobanga te ! Nazali Ya liboso mpe Ya suka.\wj* \v 18 \wj Nazali Ye oyo azali na bomoi ; nakufaki, mpe sik’oyo tala, nazali na bomoi mpo na libela na libela ! Nasimbi bafungola ya kufa mpe ya mboka ya bakufi.\wj* \p \v 19 \wj Yango wana, koma makambo oyo omoni, oyo ezali sik’oyo, mpe oyo ekoya na sima.\wj* \v 20 \wj Tala mabombami oyo ezali kati na minzoto sambo oyo omonaki na loboko na Ngai ya mobali, mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo : minzoto sambo elakisi ba-anjelu ya Mangomba sambo ; mpe bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo elakisi Mangomba sambo. »\wj* \c 2 \ms1 Mikanda epai ya Mangomba sambo \s1 Epai ya Lingomba ya Efeso \p \v 1 \wj Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Efeso :\wj* \b \pi1 \wj « Tala maloba ya Ye oyo asimbi minzoto sambo na loboko na Ye ya mobali mpe atambolaka kati na bitelemiselo sambo ya minda, oyo basala na wolo :\wj* \b \pi1 \v 2 \wj Nayebi misala, pasi mpe molende na yo. Nayebi ete okoki te koyikela bato mabe mpiko ; nayebi lisusu ete omekaki bato oyo balobaka ete bazali bantoma, nzokande bazali na bango bantoma te, mpe omonaki penza ete bazali bakosi.\wj* \v 3 \wj Nayebi malamu ete ozali na molende mpe oyokaki pasi makasi mpo na Kombo na Ngai, kasi olembaki te.\wj* \pi1 \v 4 \wj Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : obwaki bolingo na yo ya liboso.\wj* \v 5 \wj Kanisa malamu esika oyo ozalaki, liboso ete okweya ! Bongola motema na yo mpe zongela misala na yo ya liboso ; noki te, nakoya epai na yo mpe nakolongola etelemiselo na yo ya mwinda na esika na yango.\wj* \v 6 \wj Kasi ezali na likambo moko oyo nasepelaka na yango epai na yo : olingaka te misala ya bato ya lingomba ya Nikola, oyo Ngai mpe nalingaka te.\wj* \pi1 \v 7 \wj Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye nzela ya kolia mbuma ya nzete ya bomoi, oyo ezali kati na Paradizo ya Nzambe. »\wj* \s1 Epai ya Lingomba ya Simirne \p \v 8 \wj Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Simirne :\wj* \b \pi1 \wj « Tala maloba ya Ye oyo azali Ya liboso mpe Ya suka, Ye oyo akufaki mpe azali lisusu na bomoi :\wj* \b \pi1 \v 9 \wj Nayebi minyoko mpe bobola na yo, nzokande ozali mozwi ; nayebi ndenge nini bato oyo balobaka ete bazali Bayuda, kasi bazali na bango Bayuda te, batiolaka yo ; bazali nde ndako ya mayangani ya Satana.\wj* \v 10 \wj Kobanga te pasi oyo osengeli komona. Tala, Satana akobwaka bato mingi kati na bino na boloko mpo na komeka bino mpe bokonyokwama mikolo zomi. Zala kaka sembo kati na kondima na yo kino na kufa, mpe Ngai nakopesa yo bomoi lokola motole ya elonga na yo.\wj* \pi1 \v 11 \wj Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, kufa ya mibale ekosala ye pasi ata moke te. »\wj* \s1 Epai ya Lingomba ya Pergame \p \v 12 \wj Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Pergame :\wj* \b \pi1 \wj « Tala maloba ya Ye oyo asimbi mopanga bapelisa na bangambo nyonso mibale :\wj* \b \pi1 \v 13 \wj Nayebi malamu esika oyo ovandaka. Ezali mpe kaka na esika yango nde Satana atie kiti na ye ya bokonzi. Okweyisaki te kondima na yo epai na Ngai, ezala na mikolo oyo babomaki Antipasi, motatoli na Ngai ya sembo, kati na engumba na bino epai wapi Satana avandaka.\wj* \pi1 \v 14 \wj Nzokande, ezali na ndambo ya makambo oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : kati na yo, ezali na bato oyo bakangama na mateya ya Balami oyo ayebisaki Balaki ete atia motambo mpo na kotindika bana ya Isalaele kati na masumu ya kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, mpe kati na masumu ya kindumba.\wj* \v 15 \wj Kati na Lingomba na yo, ozali mpe na bato oyo bakangama na mateya ya bato ya lingomba ya Nikola.\wj* \v 16 \wj Boye, bongola motema na yo ! Soki te, nakoya kala mingi te epai na yo mpe nakobundisa bango na mopanga ya monoko na Ngai.\wj* \pi1 \v 17 \wj Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! Moto oyo akolonga, nakopesa ye mana oyo ebombama ; nakopesa ye lisusu libanga moko ya pembe oyo bakoma kombo moko ya sika na likolo na yango, kombo oyo eyebani kaka na moto oyo akozwa yango. »\wj* \s1 Epai ya Lingomba ya Tiyatire \p \v 18 \wj Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Tiyatire :\wj* \b \pi1 \wj « Tala maloba ya Mwana na Nzambe, Ye oyo miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela makasi, mpe makolo na Ye, lokola bronze ya motuya :\wj* \b \pi1 \v 19 \wj Nayebi misala, bolingo, kondima, etamboli mpe molende na yo ; nayebi mpe ete misala oyo ozali kosala sik’oyo ezali ebele koleka oyo osalaki liboso.\wj* \pi1 \v 20 \wj Nzokande, ezali na likambo moko oyo Ngai nazali kopamela yo na tina na yango : opesaka na Jezabeli, mwasi oyo amibengaka mosakoli, nzela ya kopengwisa basali na Ngai na mateya na ye ya mabe, mpo na kotindika bango na kindumba mpe na kolia misuni ya banyama oyo ebonzami lokola mbeka epai ya banzambe mosusu.\wj* \v 21 \wj Napesaki ye tango mpo ete abongola motema, kasi aboyi kaka kotika kindumba na ye.\wj* \v 22 \wj Boye, nakobwaka ye na mbeto ya pasi makasi elongo na bato oyo basalaka kindumba elongo na ye. Kasi soki babongoli mitema mpe batiki kotambola kolanda mateya ya Jezabeli, nakobwaka bango te na mbeto ya pasi makasi.\wj* \v 23 \wj Nakoboma bana ya Jezabeli ; bongo Mangomba nyonso ekondima ete Ngai nazali penza Ye oyo akundolaka mozindo ya mitema mpe ya milimo ya bato. Nakofuta moko na moko na bino kolanda etamboli na ye.\wj* \pi1 \v 24 \wj Kasi epai na bino oyo, kati na Tiyatire, bokangami te na mateya wana ya lokuta mpe boboyi koyekola mabombami ya mozindo ya Satana, kolanda ndenge babengaka yango, nazali koloba : ‹ Nakomemisa bino te mokumba mosusu na makasi ;\wj* \v 25 \wj kasi, oyo bozali na yango, bosimba yango makasi kino nakoya. ›\wj* \pi1 \v 26 \wj Moto oyo akolonga, oyo akosala mokano na Ngai kino na suka, nakopesa ye bokonzi ya kokonza bikolo :\wj* \v 27 \wj akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akopanza yango na biteni lokola mbeki,\wj* \v 28 \wj ndenge Ngai mpe nazwaki bokonzi kowuta na Tata na Ngai. Nakopesa ye lisusu monzoto ya tongo.\wj* \v 29 \wj Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »\wj* \c 3 \s1 Epai ya Lingomba ya Sarde \p \v 1 \wj Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Sarde :\wj* \b \pi1 \wj « Tala maloba ya Ye oyo azali na milimo sambo ya Nzambe mpe minzoto sambo :\wj* \b \pi1 \wj Nayebi misala na yo ; nayebi malamu ete okenda sango ete ozali na bomoi, nzokande ozali na yo ya kokufa.\wj* \v 2 \wj Lamuka ! Lendisa bato oyo batikali mpe ba-oyo bakomi pene ya kokufa, pamba te namoni ete misala na yo ezali ya kokoka te liboso ya Nzambe na Ngai.\wj* \v 3 \wj Yango wana, kanisa malamu mateya oyo ozwaki mpe oyokaki ; tosa mpe bongola motema na yo. Kasi soki olamuki te, nakoya lokola moyibi, mpe okoyeba te ngonga oyo nakoya epai na yo.\wj* \pi1 \v 4 \wj Nzokande, kati na Sarde, ozali na ndambo ya bato oyo babebisaki te bilamba na bango. Bakotambola elongo na Ngai, na bilamba ya pembe, pamba te babongi na yango.\wj* \v 5 \wj Moto oyo akolonga, bakolatisa ye bilamba ya pembe lokola bango. Nakolongola kombo na ye te na buku ya bomoi, kasi nakondima yango liboso ya Tata na Ngai mpe liboso ya ba-anjelu na Ye.\wj* \pi1 \v 6 \wj Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »\wj* \s1 Epai ya Lingomba ya Filadelfi \p \v 7 \wj Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Filadelfi :\wj* \b \pi1 \wj « Tala maloba ya Ye oyo azali Bule mpe Solo, oyo asimbi fungola ya Davidi : oyo Ye afungoli, moko te akoki kokanga yango ; mpe oyo Ye akangi, moko te akoki kofungola yango.\wj* \v 8 \wj Nayebi misala na yo. Tala, natiaki liboso na yo ekuke moko ya kofungwama, ekuke oyo moko te akoki kokanga. Nayebi ete ozali na nguya moke, obatelaki Liloba na Ngai mpe owanganaki te Kombo na Ngai.\wj* \v 9 \wj Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.\wj* \v 10 \wj Lokola obatelaki etinda na Ngai ya kozala na molende, Ngai mpe nakobatela yo na tango ya pasi oyo ekokweyela mokili mobimba mpo na komeka bavandi na yango.\wj* \pi1 \v 11 \wj Nazali koya kala mingi te. Oyo ozali na yango, simba yango makasi mpo ete moko te abotola yo motole na yo.\wj* \v 12 \wj Moto oyo akolonga, nakokomisa ye likonzi kati na Tempelo ya Nzambe na Ngai, mpe akotikala lisusu te kobima kuna. Nakokoma na likolo na ye Kombo ya Nzambe na Ngai mpe kombo ya engumba ya Nzambe na Ngai, Yelusalemi ya sika, oyo ekokita wuta na Lola, epai ya Nzambe na Ngai. Mpe lisusu, nakokoma Kombo na Ngai ya sika na likolo na ye.\wj* \v 13 \wj Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba ! »\wj* \s1 Epai ya Lingomba ya Laodise \p \v 14 \wj Komela anjelu ya Lingomba oyo ezali kati na Laodise :\wj* \b \pi1 \wj Tala maloba ya Amen, Motatoli ya sembo mpe ya solo, Mokonzi ya bikelamu nyonso ya Nzambe :\wj* \b \pi1 \v 15 \wj Nayebi misala na yo, mpe nayebi malamu ete ozali malili te mpe ozali moto te ; nalingaki nde ozala malili to moto.\wj* \v 16 \wj Kasi lokola ozali malili te mpe ozali moto te, nazali kosanza yo wuta na monoko na Ngai.\wj* \v 17 \wj Olobaka : « Nazali mozwi ! Nakomi na bozwi ebele mpe nazali na posa ya eloko te. » Kasi ozali koyeba te ete ozali moto ya pasi mpe ya mawa, ozali nde mobola, mokufi miso mpe ozali bolumbu.\wj* \v 18 \wj Yango wana, nazali kopesa yo toli ete osomba epai na Ngai wolo oyo bapetola na moto mpo ete okoma penza mozwi, bilamba ya pembe mpo ete olata mpe obomba bolumbu na yo ya soni, mpe kisi ya miso mpo ete otia na miso na yo mpe omona malamu.\wj* \pi1 \v 19 \wj Napamelaka bato oyo nalingaka mpe napesaka bango etumbu. Boye, zala na molende mpe bongola motema na yo.\wj* \v 20 \wj Tala Ngai oyo, natelemi na ekuke mpe nazali kobeta. Soki moto moko ayoki mongongo na Ngai mpe afungoli ekuke, nakokota epai na ye mpe nakolia elongo na ye, mpe ye elongo na Ngai.\wj* \pi1 \v 21 \wj Moto oyo akolonga, nakopesa ye makoki ya kovanda elongo na Ngai, na Kiti na Ngai ya Bokonzi, ndenge Ngai mpe, sima na Ngai kolonga, nakendeki kovanda elongo na Tata na Ngai, na Kiti na Ye ya Bokonzi.\wj* \v 22 \wj Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka makambo oyo Molimo azali koloba na Mangomba !\wj* \c 4 \ms1 Bikangelo sambo \s1 Kiti ya Bokonzi ya Nzambe \p \v 1 Sima na makambo oyo, namonaki ekuke moko efungwama kati na Lola. Bongo mongongo oyo nayokaki koloba na ngai lokola kelelo na mbala ya liboso elobaki na ngai lisusu : \wj « Mata awa, mpe nakolakisa yo makambo oyo esengeli koya sima na oyo. »\wj* \p \v 2 Mbala moko, Molimo asimbaki ngai mpe namonaki kati na Lola Kiti moko ya Bokonzi oyo moto moko avandelaki. \v 3 Mpe Ye oyo avandaki na Kiti yango ya Bokonzi azalaki komonana lokola Jasipe mpe Saridwane oyo ezali mabanga ya talo. Monama ezingelaki Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki kongenga lokola libanga ya talo oyo babengaka emerode. \v 4 Zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki mpe na bakiti mosusu tuku mibale na minei ya bokonzi, mpe bampaka tuku mibale na minei bavandelaki yango. Bampaka yango balataki bilamba ya pembe, mpe bazalaki na mitole ya wolo na mito na bango. \v 5 Wuta na Kiti yango ya Bokonzi, mikalikali ezalaki kongenga, makelele ya mingongo mpe lokito ya bakake ezalaki koyokana. Mpe liboso ya Kiti yango, minda sambo ezalaki kopela : ezali milimo sambo ya Nzambe. \v 6 Na liboso ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki lisusu na etando moko oyo ezalaki lokola talatala, mpe monene na yango ezalaki lokola molayi ya ebale monene. Ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali. Na kati mpe na zingazinga ya Kiti yango ya Bokonzi, ezalaki na bikelamu minei ya bomoi oyo banzoto na bango ezalaki etonda na miso na liboso mpe na sima. \v 7 Ekelamu ya liboso azalaki lokola nkosi ; ya mibale, lokola mwana ngombe ya mobali ; ya misato azalaki na elongi lokola ya moto, mpe ya minei azalaki lokola mpongo oyo ezali kopumbwa. \v 8 Moko na moko kati na bikelamu nyonso minei azalaki na mapapu motoba, mpe nzoto na ye ezalaki etonda na miso, ezala na se ya mapapu. Butu mpe moyi, bazalaki kolemba te koloba : \qc Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, \qc oyo azalaki, azali, mpe azali koya, \qc azali Bule, Bule, Bule. \m \v 9 Na tango nyonso oyo bikelamu ya bomoi bazalaki kopesa nkembo, lokumu mpe matondi epai na Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi mpe azali na bomoi seko na seko, \v 10 bampaka tuku mibale na minei bazalaki kogumbama liboso ya Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi, kogumbamela Ye oyo azali na bomoi seko na seko mpe kokitisa mitole na bango liboso ya Kiti ya Bokonzi na koloba : \q1 \v 11 « Nkolo mpe Nzambe na biso, \q2 obongi na nkembo, na lokumu mpe na nguya, \q1 pamba te Yo nde okela biloko nyonso : \q2 ezalaki mpe ekelamaki mpo na mokano na Yo. » \c 5 \s1 Buku mpe Mpate \p \v 1 Bongo namonaki, na loboko ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi, buku moko elingama, bakoma yango na kati mpe na libanda, mpe bakanga yango na bikangelo sambo. \v 2 Namonaki mpe anjelu moko ya nguya kosakola na mongongo makasi : « Nani abongi mpo na kobuka bikangelo ya buku mpe kofungola yango ? » \p \v 3 Kasi ezala kati na Lola to na mokili to na se ya mabele, moko te akokaki kofungola buku to kotala kati na yango. \p \v 4 Tango namonaki bongo, nalelaki mingi mpo ete moko te amonanaki ete abongi mpo na kofungola buku to kotala kati na yango. \v 5 Bongo moko kati na bampaka alobaki na ngai : « Kolela te ! Tala ! Nkosi ya libota ya Yuda, Mokitani ya Davidi, alongaki mpo na kobuka bikangelo sambo mpe kofungola buku yango. » \p \v 6 Mpe namonaki Mpate moko ya kotelema na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi, mpe bazingela na bikelamu minei ya bomoi elongo na bampaka. Mpate yango amonanaki lokola nde basilaki koboma Ye ; azalaki na maseke sambo mpe miso sambo oyo ezali milimo sambo ya Nzambe, oyo etindama na mokili mobimba. \p \v 7 Mpate apusanaki mpo na kozwa buku wuta na loboko ya ngambo ya mobali ya Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi. \v 8 Tango kaka azwaki buku, bikelamu minei ya bomoi mpe bampaka tuku mibale na minei bagumbamaki liboso ya Mpate. Moko na moko kati na bango asimbaki na loboko na ye lindanda mpe kopo ya wolo etonda na ansa oyo ezali mabondeli ya basantu. \v 9 Mpe bayembaki nzembo ya sika : \q1 « Obongi na kozwa buku \q2 mpe kobuka bikangelo na yango, \q1 pamba te babomaki Yo ; \q2 bongo na nzela ya makila na Yo, \q1 osikolaki, mpo na Nzambe, bato ya bikolo nyonso, \q2 ya nkota nyonso, ya mikili nyonso \q2 mpe ya mabota nyonso. \q1 \v 10 Okomisaki bango ekolo ya bakonzi \q2 mpe ya Banganga-Nzambe mpo Nzambe na biso, \q2 mpe bakokonza mokili. » \p \v 11 Bongo natalaki mpe nayokaki mongongo ya ba-anjelu ebele, oyo motango na bango ezalaki bankoto na bankoto ; bazingelaki Kiti ya Bokonzi, bikelamu ya bomoi mpe bampaka, \v 12 mpe bazalaki koloba na mongongo makasi : \q1 « Mpate oyo babomaki abongi na kozwa \q2 nguya, bomengo, bwanya mpe makasi, \q2 lokumu, nkembo mpe masanzoli. » \p \v 13 Bongo nayokaki bikelamu nyonso oyo ezalaka kati na Lola, na mabele, na se ya mabele mpe na likolo ya ebale monene ; bango nyonso bazalaki koloba : \q1 « Tika ete masanzoli mpe lokumu, \q2 nkembo mpe nguya \q1 ezonga epai ya Mpate mpe epai na Ye \q2 oyo avandi na Kiti ya Bokonzi \qc mpo na libela na libela ! » \m \v 14 Bikelamu minei ya bomoi bazalaki kozongisa : « Amen. » Mpe bampaka bafukamaki mpe bagumbamelaki. \c 6 \s1 Bikangelo \p \v 1 Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya liboso kati na bikangelo sambo ; mpe nayokaki moko kati na bikelamu minei ya bomoi koloba na mongongo makasi lokola kake : « Yaka ! » \p \v 2 Natalaki mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya pembe. Motambolisi na yango asimbaki tolotolo. Bapesaki ye motole, bongo abimaki lokola molongi mpe mpo ete azala molongi. \p \v 3 Tango Mpate abukaki ekangelo ya mibale, nayokaki ekelamu ya mibale ya bomoi koloba : « Yaka ! » \v 4 Bongo mpunda mosusu ebimaki : ezalaki ya motane makasi. Motambolisi na yango apesamelaki nguya ya kolongola kimia na mokili mpe ya kosala ete bato babomana bango na bango. Mpe bapesaki ye lisusu mopanga moko ya monene. \p \v 5 Tango Mpate abukaki ekangelo ya misato, nayokaki ekelamu ya bomoi ya misato koloba : « Yaka ! » \p Mpe namonaki liboso na ngai mpunda moko ya mwindo. Motambolisi na yango asimbaki na loboko na ye emekelo kilo. \v 6 Bongo nayokaki lokola mongongo moko kobima kati na bikelamu minei ya bomoi ; ezalaki koloba : « Kopo moko ya ble mpo na mbongo moko ya ebende, mpe bakopo misato ya orje mpo na mbongo moko ya ebende. Kasi kobebisa mafuta mpe vino te. » \p \v 7 Tango Mpate abukaki ekangelo ya minei, nayokaki mongongo ya ekelamu ya minei ya bomoi koloba : « Yaka ! » \p \v 8 Namonaki liboso na ngai mpunda moko ya langi ya mayi ya pondu ; kombo ya motambolisi na yango ezalaki « Kufa, » mpe mboka ya bakufi ezalaki kolanda motambolisi yango na sima. Bapesamelaki nguya ya koboma bato na nzela ya mopanga, ya nzala, ya bokono mpe ya banyama mabe, na etando ya eteni moko kati na biteni minei ya mokili. \p \v 9 Tango Mpate abukaki ekangelo ya mitano, namonaki na se ya etumbelo, milimo ya bato oyo baboma likolo na Liloba na Nzambe mpe likolo na litatoli na bango. \v 10 Bagangaki na mongongo makasi : « Nkolo Nzambe, Yo oyo ozali Bule mpe Solo, okozela kino tango nini mpo na kosambisa bavandi ya mokili mpe kopesa bango etumbu mpo na makila na biso ? » \p \v 11 Bongo bapesaki na moko na moko kati na bango nzambala ya pembe, mpe bayebisaki bango ete bazela moke kino motango ekokoka : motango ya baninga na bango ya mosala, mpe ya bandeko na bango oyo bakobomama lokola bango. \p \v 12 Bongo namonaki Mpate kobuka ekangelo ya motoba, mpe mabele eninganaki makasi. Moyi ekomaki molili lokola elamba ya mwindo ; bongo sanza, na mobimba na yango, ekomaki motane lokola makila. \v 13 Minzoto ya likolo ekweyaki na mabele ndenge bambuma ya nzete ya figi oyo ekomeli nanu te ekweyaka soki mopepe makasi eningisi yango. \v 14 Lola elongwaki lokola mokanda oyo bazali kolinga, bangomba nyonso mpe bisanga nyonso elongwaki na bisika na yango. \v 15 Bakonzi ya mabele, bato minene, bakonzi ya mampinga ya basoda, bazwi, bato ya nguya, bawumbu mpe bansomi bakendeki kobombama kati na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga minene ya bangomba. \v 16 Bazalaki koganga epai ya bangomba mpe epai ya mabanga minene : « Bokweyela biso mpe bobomba biso mpo ete Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi amona biso te, mpe mpo ete kanda ya Mpate ekweyela biso te ! \v 17 Pamba te mokolo monene ya kanda na bango ekoki, bongo nani akoki kolonga kotelema ? » \c 7 \s1 Bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei \p \v 1 Sima na makambo wana, namonaki ba-anjelu minei batelemi na basonge nyonso minei ya mokili, bazali kokanga mipepe nyonso minei ya mokili mpo ete mopepe ata moke te epepa na mokili to na ebale monene to mpe na banzete. \p \v 2 Bongo namonaki anjelu mosusu azali komata longwa na este mpe asimbi kashe ya Nzambe na bomoi. Agangaki na mongongo makasi epai ya ba-anjelu minei oyo Nzambe apesaki nguya ya kosala mabe na mokili mpe na ebale monene. \v 3 Alobaki na bango : « Bosala mabe te na mokili to na ebale monene to mpe na banzete, kino tokosilisa kobeta kashe na bambunzu ya basali ya Nzambe na biso. » \p \v 4 Bongo nayokaki motango ya bato oyo babetamaki kashe : nkoto nkama moko na tuku minei na minei ; bazalaki bato ya mabota nyonso ya bana ya Isalaele. \b \li1 \v 5 Kati na libota ya Yuda, bato nkoto zomi na mibale babetamaki kashe ; \li1 kati na libota ya Ribeni, bato nkoto zomi na mibale ; \li1 kati na libota ya Gadi, bato nkoto zomi na mibale ; \li1 \v 6 kati na libota ya Aseri, bato nkoto zomi na mibale ; \li1 kati na libota ya Nefitali, bato nkoto zomi na mibale ; \li1 kati na libota ya Manase, bato nkoto zomi na mibale ; \li1 \v 7 kati na libota ya Simeoni, bato nkoto zomi na mibale ; \li1 kati na libota ya Levi : bato nkoto zomi na mibale ; \li1 kati na libota ya Isakari, bato nkoto zomi na mibale ; \li1 \v 8 kati na libota ya Zabuloni, bato nkoto zomi na mibale ; \li1 kati na libota ya Jozefi, bato nkoto zomi na mibale ; \li1 mpe kati na libota ya Benjame, bato nkoto zomi na mibale. \b \li4 Bango nyonso babetamaki kashe. \s1 Ebele ya bato liboso ya Kiti ya Bokonzi \p \v 9 Sima na makambo wana, namonaki ebele ya bato oyo moto ata moko te akokaki kotanga ; bazalaki bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya mikili nyonso mpe ya nkota nyonso. Batelemaki liboso ya Kiti ya Bokonzi mpe liboso ya Mpate, balataki banzambala ya pembe mpe basimbaki mandalala na maboko na bango ; \v 10 bazalaki koganga na mongongo makasi : « Lobiko ezali ya Nzambe na biso, oyo avandi na Kiti ya Bokonzi, mpe ezali ya Mpate. » \p \v 11 Ba-anjelu nyonso oyo bazalaki kotelema zingazinga ya Kiti ya Bokonzi, ya bampaka mpe ya bikelamu minei ya bomoi, bagumbamaki, bilongi kino na mabele, liboso ya Kiti ya Bokonzi, mpe bagumbamelaki Nzambe \v 12 na koloba : \q1 « Amen ! \q2 Tika ete masanzoli, nkembo, bwanya, \q1 matondi, lokumu, nguya mpe makasi \q2 ezala ya Nzambe na biso, \q1 mpo na libela na libela ! \q2 Amen ! » \p \v 13 Bongo moko kati na bampaka atunaki ngai : \pi1 — Bato oyo balati banzambala ya pembe bazali banani mpe bawuti wapi ? \p \v 14 Nazongiselaki ye : \pi1 — Nkolo na ngai, yo nde oyebi. \p Bongo alobaki na ngai : \pi1 — Ezali ba-oyo bawuti na minyoko makasi. Basukolaki banzambala na bango mpe bakomisaki yango pembe kati na makila ya Mpate. \v 15 Yango wana, \q1 batelemaka liboso ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe \q2 mpe basalelaka Ye kati na Tempelo na Ye, butu mpe moyi ; \q1 mpe Ye oyo avandi na Kiti ya Bokonzi \q2 akobatela bango kati na evandelo na Ye. \q1 \v 16 Bakoyoka lisusu nzala te, \q2 posa ya mayi mpe koswa ya moyi to molunge ; \q1 \v 17 pamba te Mpate oyo azali na kati-kati ya Kiti ya Bokonzi \q2 akozala Mobateli na bango, \q1 akomema bango na bitima ya mayi ya bomoi, \q2 mpe Nzambe akopangusa mpinzoli nyonso ya miso na bango. \c 8 \s1 Ekangelo ya sambo \p \v 1 Tango Mpate afungolaki ekangelo ya sambo, kimia moko ekotaki kati na Lola mpe esalaki minite pene tuku misato. \p \v 2 Bongo namonaki ba-anjelu sambo oyo batelemaka liboso ya Nzambe, mpe bapesaki bango bakelelo sambo. \p \v 3 Anjelu mosusu ayaki mpe atelemaki na etumbelo ; amemaki mbabola basala na wolo mpo na kotumba na yango ansa. Bapesaki ye ansa ebele ya kobonza elongo na mabondeli ya basantu nyonso, mpo ete abonza yango na likolo ya etumbelo basala na wolo, liboso ya Kiti ya Bokonzi. \v 4 Wuta na loboko ya anjelu, molinga ya ansa elongo na mabondeli ya basantu emataki liboso ya Nzambe. \p \v 5 Bongo anjelu azwaki mbabola, atondisaki yango na makala ya moto oyo azwaki na etumbelo, mpe abwakaki mbabola yango na mabele. Mbala moko, lokito moko ya makasi eyokanaki : bakake, mingongo, mikalikali mpe koningana ya mabele. \s1 Bakelelo \p \v 6 Bongo ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakelelo sambo bamibongisaki mpo na kobeta yango. \p \v 7 Anjelu ya liboso abetaki kelelo ; mpe, mbala moko, mvula ya mabanga mike elongo na moto esangana na makila ebwakamaki na mabele. Bongo biloko oyo ezikaki : eteni moko kati na biteni misato ya mabele, eteni moko kati na biteni misato ya banzete, mpe matiti nyonso ya mobesu. \p \v 8 Anjelu ya mibale abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, eloko moko lokola ngomba monene oyo ezali kopela moto ebwakamaki na ebale monene. Eteni moko kati na biteni misato ya ebale monene ekomaki makila ; \v 9 mpe eteni moko kati na biteni misato ya bikelamu oyo evandaka kati na ebale monene ekufaki, eteni moko kati na biteni misato ya bamasuwa nyonso ebebisamaki. \p \v 10 Anjelu ya misato abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, monzoto moko ya monene oyo ezali kopela lokola mwinda monene ekweyelaki, longwa na likolo, eteni moko kati na biteni misato ya bibale mpe bitima ya mayi. \v 11 Kombo ya monzoto yango ezali : Bololo. Eteni moko kati na biteni misato ya bamayi ekomaki bololo, mpe bato ebele bakufaki likolo na bamayi mpo ete ekomaki bololo. \p \v 12 Anjelu ya minei abetaki kelelo ; mpe na mbala moko, eteni moko kati na biteni misato ya moyi, ya sanza mpe ya minzoto ebebaki. Na bongo, eteni moko kati na biteni misato ya kongenga na yango ekomaki molili. Boye eteni moko kati na biteni misato ya mokolo mpe ya butu ezangaki pole. \p \v 13 Bongo nayokaki mpongo, oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi, koloba na mongongo makasi : « Mawa ! Mawa ! Mawa penza na bavandi ya mokili tango ba-anjelu misato ya suka bakobeta bakelelo na bango ! » \c 9 \p \v 1 Anjelu ya mitano abetaki kelelo, mpe namonaki monzoto kokweya na mokili wuta na Lola. Fungola ya libulu ya monene mpe ya molili makasi epesamaki na monzoto yango. \v 2 Tango efungolaki libulu yango, milinga ebele emataki longwa kuna ; ezalaki lokola milinga oyo ebimaka na fulu monene ya moto makasi, mpe eyindisaki moyi mpe mopepe. \v 3 Wuta na milinga yango, mankoko ebimaki, epanzanaki na mokili mpe epesamelaki bokonzi lokola oyo ya bakoto. \v 4 Nzokande epesamelaki mitindo ete esala mabe te na matiti ya mokili to na nkona nyonso ya mobesu to na nzete nyonso, kasi esala mabe kaka na bato oyo bazangi kashe ya Nzambe na bambunzu na bango. \v 5 Esengelaki konyokola bango basanza mitano, kasi esengelaki te koboma bango. Pasi oyo ezalaki kopesa ekokanaki na oyo moto ayokaka soki koto eswi ye. \v 6 Na basanza wana mitano, bato bakoluka kufa, kasi bakozwa yango te ; bakolinga kokufa, kasi kufa ekokima bango. \p \v 7 Mankoko yango ezalaki lokola bampunda oyo babongisi mpo na etumba. Na mito na yango, ezalaki na biloko moko lokola mitole ya wolo, mpe bilongi na yango ezalaki lokola bilongi ya bato. \v 8 Suki na yango ezalaki lokola suki ya basi, mpe minu na yango ezalaki lokola minu ya nkosi. \v 9 Tolo na yango ezalaki lokola bibende oyo basoda balataka na tolo, mpe makelele ya mapapu na yango ezalaki lokola makelele ya bashar oyo bampunda ebele ezali kobenda mpo na etumba. \v 10 Mikila na yango ezalaki na basonge lokola mikila ya bakoto, mpe nguya na yango ya konyokola bato basanza mitano ezalaki kati na mikila na yango. \p \v 11 Anjelu ya libulu ya monene mpe ya molili makasi nde azalaki mokonzi na yango. Kombo na ye, na lokota ya Ebre, « Abadoni ; » mpe, na lokota ya Greki, « Apolioni. » \p \v 12 Tango pasi ya liboso elekaki, bapasi mosusu mibale elandaki. \p \v 13 Anjelu ya motoba abetaki kelelo, mpe nayokaki mongongo moko kobima longwa na maseke minei ya etumbelo oyo basala na wolo, etumbelo oyo ezalaki liboso ya Nzambe. \v 14 Mongongo yango ezalaki koloba na anjelu ya motoba oyo azalaki na kelelo na maboko : « Fungola ba-anjelu minei oyo bazali ya kokangama na minyololo pembeni ya ebale monene Efrate. » \p \v 15 Boye ba-anjelu wana minei oyo babongisamaki mpo na ngonga wana, mokolo wana, sanza wana mpe mobu wana, bafungolamaki mpo ete baboma eteni moko kati na biteni misato ya bato. \v 16 Bazalaki minkoko nkama mibale ya basoda oyo babundaka na likolo ya bampunda. Yango nde motango na bango oyo nayokaki. \p \v 17 Tala ndenge nini, kati na emoniseli na ngai, bampunda mpe basoda oyo babundaka na likolo na yango bazalaki : balataki bibende oyo basoda balataka mpo na kobatela tolo. Bibende yango ezalaki ya motane makasi lokola moto, ya langi ya bule ya pete mpe ya langi ya mosaka ; bongo mito ya bampunda ezalaki lokola mito ya bankosi, mpe minoko na yango ezalaki kobimisa moto, milinga mpe sofolo. \v 18 Tala bapasi misato oyo ezalaki kobima na minoko ya bampunda : moto, milinga mpe sofolo. Ebomaki eteni moko kati na biteni misato ya bato. \v 19 Nguya ya bampunda ezalaki kati na minoko mpe na mikila na yango, pamba te mikila na yango ezalaki lokola banyoka, mpe ezalaki na mito oyo, na nzela na yango, ezalaki kosala bato mabe. \p \v 20 Kasi bato oyo bakufaki te na nzela ya bapasi wana batikaki te banzambe oyo maboko na bango moko esalaki ; batikaki te kogumbamela milimo mabe mpe banzambe ya bikeko oyo basala na wolo, na palata, na bronze, na mabanga mpe na mabaya atako emonaka te, eyokaka te mpe eninganaka te. \v 21 Batikaki mpe te koboma bato, misala na bango ya maji, kindumba na bango mpe moyibi na bango. \c 10 \s1 Anjelu mpe buku ya moke \p \v 1 Bongo namonaki anjelu mosusu ya nguya makasi kokita wuta na Lola ; lipata moko ezipaki ye mpe monama ezingelaki moto na ye. Elongi na ye ezali kongenga lokola moyi, mpe makolo na ye ezalaki lokola makonzi ya moto. \v 2 Na loboko na ye, asimbaki buku ya moke oyo ezalaki ya kofungwama. Atiaki lokolo na ye ya mobali na ebale monene, mpe oyo ya mwasi, na mokili ; \v 3 bongo agangaki makasi lokola nkosi. Tango agangaki, bakake sambo ebetaki. \p \v 4 Mpe tango kaka bakake sambo etikaki kobeta, namibongisaki mpo na kokoma ; kasi mongongo moko elobaki na ngai wuta na Lola : « Batela malamu makambo oyo bakake sambo ewuti koloba, kokoma yango te. » \p \v 5 Bongo anjelu oyo namonaki atelemi na ebale monene mpe na mokili atombolaki loboko ya mobali na ngambo ya Lola \v 6 mpe alapaki ndayi na Kombo ya Ye oyo azali na bomoi seko na seko, Ye oyo akela Lola mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango : « Kobanda sik’oyo, tango ya kozela ezali lisusu te ! \v 7 Kasi na mokolo oyo anjelu ya sambo akobeta kelelo na ye, mabombami ya Nzambe ekokokisama ndenge kaka asakolaki yango na basali na Ye, basakoli. » \p \v 8 Bongo mongongo oyo nayokaki wuta na Lola elobaki na ngai lisusu : « Kende, zwa buku oyo ezali ya kofungwama na loboko ya anjelu oyo atelemi na ebale monene mpe na mokili. » \p \v 9 Boye, nakendeki epai ya anjelu mpe nasengaki na ye ete apesa ngai buku wana ya moke. Alobaki na ngai : « Kamata mpe lia yango. Ekokoma bololo na libumu na yo ; kasi na monoko na yo, ekozala sukali lokola mafuta ya nzoyi. » \p \v 10 Nakamataki buku yango na loboko ya anjelu mpe naliaki yango. Na monoko na ngai, ezalaki sukali lokola mafuta ya nzoyi ; kasi sima na ngai kolia yango, ekomaki bololo kati na libumu na ngai. \v 11 Bongo balobaki na ngai : « Osengeli lisusu kosakola na tina na bikolo ebele, mabota ebele, nkota ebele mpe bakonzi ebele. » \c 11 \s1 Batatoli mibale \p \v 1 Bongo bapesaki ngai kekele lokola lingenda oyo bamekelaka molayi mpe balobaki na ngai : « Kende kozwa molayi ya Tempelo ya Nzambe mpe ya etumbelo, mpe tanga bato oyo bagumbamelaka Nzambe kuna. \v 2 Kasi kozwa te molayi ya lopango ya libanda ya Tempelo, pamba te esilaki kokabama na maboko ya bikolo ya bapaya. Bapagano bakonyata engumba ya bule basanza tuku minei na mibale. \v 3 Mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba, nakopesa na batatoli na ngai mibale mosala ya kosakola. Bakolata basaki tango bakozala kosakola. » \p \v 4 Batatoli wana mibale bazali banzete mibale ya olive mpe bitelemiselo mibale ya minda ; mpe batelemaka liboso ya Nkolo ya Mokili. \v 5 Soki moto moko ameki kosala bango mabe, moto ekobima na minoko na bango mpe ekozikisa banguna na bango. Ezali ndenge wana nde moto nyonso oyo akolinga kosala bango mabe asengeli kokufa. \p \v 6 Batatoli yango mibale bazali na nguya ya kokanga Likolo mpo ete mvula enoka te na mikolo oyo bakozala kosakola. Bazali mpe na nguya ya kobongola mayi mpo ete ekoma makila, mpe ya kotinda pasi ya lolenge nyonso na mabele, na tango nyonso oyo balingi. \b \p \v 7 Kasi tango bakosilisa kopesa litatoli na bango, nyama oyo ekobima wuta na libulu ya monene mpe ya molili makasi ekobundisa bango, ekolonga bango mpe ekoboma bango. \v 8 Bakotanda bibembe na bango, na etando epai wapi bato nyonso bakutanaka kati na engumba. Kolanda molimo oyo ekambaka engumba yango, babengaka etando yango Sodome mpe Ejipito. Ezali kuna na engumba yango nde Nkolo na bango abakamaki na ekulusu. \v 9 Bato ya bikolo nyonso, ya mabota nyonso, ya nkota nyonso mpe ya mikili nyonso bakotala bibembe na bango mikolo misato na ndambo, mpe bakoboya ete bakunda yango. \v 10 Bavandi nyonso ya mokili bakosepela na tina na kufa na bango, bakosala feti mpe bakopesana bakado, pamba te basakoli wana mibale batungisaki mingi bavandi ya mokili. \b \p \v 11 Kasi sima na mikolo wana misato na ndambo, pema na bomoi kowuta na Nzambe ekotaki kati na bango mpe batelemaki. Bongo somo monene ekangaki bato oyo bazalaki kotala bango. \v 12 Mongongo moko ya makasi kowuta na Lola elobaki na batatoli wana mibale : « Bomata awa ! » Bamataki na likolo kati na lipata, wana banguna na bango bazalaki kotala. \v 13 Na ngonga wana kaka, mabele eninganaki makasi penza ; mpe eteni moko kati na biteni zomi ya engumba ebukanaki mpe, na koningana yango ya mabele, bato nkoto sambo bakufaki. Bato oyo babikaki batondaki na somo mpe bapesaki Nzambe ya Likolo nkembo. \p \v 14 Pasi ya mibale eleki ; mpe tala, pasi ya misato ezali koya kala mingi te. \s1 Kelelo ya sambo \p \v 15 Anjelu ya sambo abetaki kelelo, mpe mingongo ya makasi eyokanaki kati na Lola ; elobaki : \q1 « Bokonzi ya mokili ekomi sik’oyo \q2 Bokonzi ya Nkolo na biso mpe ya Klisto na Ye, \q2 mpe akokonza seko na seko. » \m \v 16 Mpe bampaka tuku mibale na minei oyo bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi liboso ya Nzambe bafukamaki bilongi kino na mabele, mpe bagumbamelaki Nzambe \v 17 na koloba : \q1 « Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, \q2 Yo oyo ozali mpe ozalaki, \q1 tozali kopesa Yo matondi ; \q2 mpo ete osalelaki nguya monene na Yo \q2 mpe okomaki kokonza. \q1 \v 18 Bikolo etombokaki, \q2 mpe kanda na Yo epelaki. \q1 Tango ekoki mpo na kosambisa bakufi, \q2 mpe mpo na kofuta basali na Yo, basakoli, \q1 mpe basantu oyo batosaka Kombo na Yo, \q2 ezala bato minene to bato pamba ; \q2 mpe mpo na koboma bato oyo babebisaka mokili. » \p \v 19 Bongo Tempelo ya Nzambe, oyo ezali kati na Lola efungwamaki, mpe Sanduku ya Boyokani na Ye emonanaki kuna kati na Tempelo ya Nzambe. Mpe mikalikali epelaki, mingongo mpe lokito ya bakake eyokanaki, mabele eninganaki, mpe mvula monene ya mabanga enokaki. \c 12 \s1 Mwasi mpe dalagona \p \v 1 Elembo moko ya monene emonanaki na likolo, ezalaki mwasi moko. Alataki moyi lokola elamba, sanza ezalaki na se ya matambe na ye, mpe, na moto na ye, alataki motole oyo ezalaki na minzoto zomi na mibale. \v 2 Azalaki na zemi mpe, lokola azalaki koyoka pasi ya kobota, azalaki koganga makasi mpo na pasi. \p \v 3 Sima na yango, elembo mosusu emonanaki na likolo, ezalaki dalagona moko ya monene mpe ya motane. Dalagona yango ezalaki na mito sambo mpe maseke zomi ; mpe na mito wana sambo, moko na moko ezalaki na motole. \v 4 Mokila na yango ekombolaki eteni moko kati na biteni misato ya minzoto ya likolo mpe ebwakaki yango na mabele. Dalagona etelemaki liboso ya mwasi oyo azalaki koyoka pasi ya kobota mpo ete elia mwana na ye tango kaka akobotama. \v 5 Nzokande, mwasi yango abotaki mwana mobali oyo akokamba bikolo nyonso na nzela ya lingenda ya ebende. Bongo mwana na ye amemamaki epai ya Nzambe mpe epai ya Kiti na Ye ya Bokonzi. \v 6 Mwasi yango akimaki na esobe epai wapi Nzambe abongiselaki ye ebombamelo, mpo ete asungama kuna mikolo nkoto moko na nkama mibale na tuku motoba. \p \v 7 Bongo etumba ekweyaki kuna na likolo : Misheli elongo na ba-anjelu na ye babundisaki dalagona, mpe dalagona elongo na ba-anjelu na yango ebundisaki Misheli elongo na ba-anjelu na ye. \v 8 Kasi dalagona elongaki te ; boye dalagona yango elongo na ba-anjelu na yango ebungisaki esika na yango kuna na likolo. \v 9 Babwakaki dalagona monene, nyoka ya kala, oyo babengaka zabolo to Satana, oyo akosaka mokili mobimba. Ebwakamaki na mabele elongo na ba-anjelu na yango. \p \v 10 Bongo nayokaki, kati na Lola, mongongo moko ya makasi koloba : \q1 « Tango ya lobiko, ya nguya, \q2 ya Bokonzi ya Nzambe na biso, \q1 mpe ya nguya ya Klisto na Ye ekoki. \q2 Pamba te Mofundi ya bandeko na biso, \q1 oyo afundaka bango butu mpe moyi, \q2 liboso ya Nzambe na biso, \q2 abwakami na mokili. \q1 \v 11 Kasi bango balongi ye \q2 na nzela ya makila ya Mpate, \q1 mpe na nzela ya liloba ya litatoli na bango ; \q2 balingaki te bomoi na bango \q2 kino kondima ata kokufa. \q1 \v 12 Yango wana, yo Lola, sepela ; \q2 mpe bino bavandi ya Lola, bosepela ! \q1 Kasi mawa na mokili mpe na ebale monene, \q2 pamba te Satana akiti epai na bino ! \q1 Atondi na kanda, \q2 pamba te ayebi malamu \q2 ete atikali kaka na tango moke. » \p \v 13 Tango dalagona emonaki ete ebwakami na mokili, ekomaki kolanda mwasi oyo abotaki mwana mobali. \v 14 Kasi mapapu nyonso mibale ya mpongo moko ya monene epesamaki na mwasi yango mpo ete apumbwa kino na esika na ye, na esobe epai wapi asengeli kosungama, mosika ya nyoka, mpo na tango moko, mpo na batango, mpe mpo na ndambo ya tango. \v 15 Bongo nyoka esanzaki wuta na monoko na yango, na sima ya mwasi, mayi ebele lokola ebale, mpo ete atiola na mbonge na yango. \v 16 Kasi mabele esungaki mwasi, efungolaki monoko na yango mpe emelaki ebale oyo dalagona esanzaki wuta na monoko na yango. \v 17 Bongo dalagona esilikelaki mwasi mpe ekendeki kobundisa bana na ye mosusu, ba-oyo batosaka mibeko ya Nzambe mpe bakangamaka makasi na litatoli na bango na tina na Yesu. \v 18 Dalagona ekendeki kotelema na zelo ya ebale monene. \c 13 \s1 Banyama mibale \p \v 1 Bongo namonaki nyama moko kobima longwa na ebale monene. Ezalaki na maseke zomi mpe mito sambo. Elataki mitole zomi na maseke na yango ; mpe na mito na yango, bakomaki bakombo mpo na kofinga Nzambe. \v 2 Nyama oyo namonaki ezalaki lokola nkoyi. Makolo na yango ezalaki lokola ya ngombolo, mpe monoko na yango lokola ya nkosi. Dalagona epesaki nyama wana nguya na yango, kiti na yango ya bokonzi mpe bokonzi monene. \v 3 Moko kati na mito na yango ezalaki komonana lokola nde ezali na pota moko ya monene makasi oyo ekokaki komema yango na kufa, kasi pota yango esilaki. Mokili mobimba elulaki nyama yango mpe ekomaki kolanda yango. \p \v 4 Bato bagumbamelaki dalagona mpo ete epesaki bokonzi na yango epai ya nyama wana. Bagumbamelaki mpe nyama yango na maloba oyo : « Nani akokani na nyama oyo ? Nani akoki kobundisa yango ? » \v 5 Nyama epesamelaki monoko mpo na kobimisa maloba ya lolendo mpe ya kofinga Nzambe ; epesamelaki nzela ya kosalela bokonzi na yango basanza tuku minei na mibale. \p \v 6 Efungolaki monoko na yango mpe ekomaki kobimisa maloba ya kofinga Nzambe, Kombo na Ye, evandelo na Ye mpe bavandi ya Lola. \v 7 Epesamelaki lisusu makoki ya kobundisa mpe kolonga basantu. Mpe epesamelaki bokonzi na likolo ya mabota nyonso, mikili nyonso, nkota nyonso mpe bikolo nyonso. \v 8 Bavandi nyonso ya mokili bakogumbamela nyama yango, ba-oyo nyonso bakombo na bango ekomama te, wuta na ebandeli ya mokili, kati na buku ya bomoi ya Mpate oyo babomaki. \p \v 9 Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka ! \q1 \v 10 Soki moto asengeli kokende na bowumbu \q2 akokende penza na bowumbu. \q1 Soki moto asengeli kokufa na mopanga \q2 akokufa penza na mopanga. \m Makambo oyo ezali penza kosenga ete basantu bazala na mpiko mpe kondima. \p \v 11 Bongo namonaki nyama mosusu kobima longwa na mabele. Ezalaki na maseke mibale lokola maseke ya mpate, mpe ezalaki koloba lokola dalagona. \v 12 Ezalaki kosalela bokonzi nyonso ya nyama ya liboso na miso na yango. Ezalaki kotindika mokili mpe bavandi na yango mpo ete bagumbamela nyama ya liboso oyo esilaki kobikisama na pota na yango wana ya monene. \v 13 Ezalaki kosala bilembo ya kokamwa kino kokweyisa na mabele, moto kowuta na likolo, na miso ya bato nyonso. \v 14 Ezalaki kokosa bavandi nyonso ya mokili na nzela ya bikamwa oyo epesamelaki makoki ya kosala na miso ya nyama ya liboso. Ezalaki kopesa bango mitindo ete basala ekeko mpo na kopesa lokumu na nyama oyo babetaki mopanga kasi ezali na bomoi. \v 15 Epesamelaki kutu makoki ya kopesa pema ya bomoi epai ya ekeko ya nyama ya liboso, mpo ete ekoka koloba mpe kobomisa bato nyonso oyo bakogumbamela yango te. \p \v 16 Esengaki na makasi ete bato nyonso, ezala bato minene to bato pamba, bazwi to babola, bansomi to bawumbu, batiama elembo na loboko ya mobali to na mbunzu. \v 17 Boye moko te akokaki kosomba to koteka soki azangi elembo ya kombo ya nyama to ya motango oyo ekokani na kombo ya nyama yango. \v 18 Makambo oyo ezali penza kosenga bwanya. Tika ete moto oyo azali na mayele alimbola motango ya nyama, pamba te ezali kotalisa kombo ya moto ! Motango yango ezali : nkama motoba na tuku motoba na motoba. \c 14 \s1 Mpate mpe bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei \p \v 1 Bongo namonaki Mpate atelemi na ngomba Siona elongo na bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei. Kombo ya Mpate mpe ya Tata na Ye ezalaki ya kokomama na bambunzu ya bato yango. \v 2 Nayokaki mongongo moko kowuta na Lola, ezalaki koyokana lokola makelele ya bibale minene mpe lokola lokito ya kake. Ezalaki lokola lokito ya babeti mandanda oyo bazali kobeta mandanda na bango \v 3 mpe bazali koyemba nzembo ya sika liboso ya Kiti ya Bokonzi, ya bikelamu minei ya bomoi mpe ya bampaka. Moko te akokaki koyekola nzembo yango longola kaka bato nkoto nkama moko na tuku minei na minei oyo basikolamaki wuta na mokili. \p \v 4 Ezali bato oyo bamikomisaki mbindo te na nzela ya basi, pamba te bamibatelaki na kozanga kosangisa banzoto na bango na basi. Balandaka Mpate na bisika nyonso oyo akendaka. Basikolamaki kati na bato mpo ete babonzama lokola bambuma ya liboso mpo na Nzambe mpe mpo na Mpate. \v 5 Lokuta emonanaki te kati na minoko na bango ; bazali bato bazanga pamela. \s1 Ba-anjelu misato \p \v 6 Bongo namonaki anjelu mosusu kopumbwa na likolo makasi. Azalaki na Sango Malamu ya seko na seko ya kosakola na bavandi nyonso ya mokili, na bikolo nyonso, na mabota nyonso, na nkota nyonso mpe na bato nyonso. \v 7 Azalaki koloba na mongongo makasi : « Botosa Nzambe mpe bopesa Ye nkembo, pamba te tango na Ye ya kosambisa bato ekoki ! Bogumbamela Ye oyo akela likolo mpe mabele, ebale monene mpe bitima ya mayi ! » \p \v 8 Anjelu ya mibale alandaki mpe alobaki : « Babiloni monene ekweyi, ekweyi penza ! Emelisaki bikolo nyonso vino ya kanda ya kindumba na yango. » \p \v 9 Anjelu ya misato alandaki ba-anjelu wana mibale ya liboso mpe alobaki na mongongo makasi : « Moto nyonso oyo agumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe azwi elembo na yango na mbunzu to na loboko na ye, \v 10 ye mpe akomela vino ya kanda ya Nzambe, vino oyo basopaki ya peto, kati na kopo ya kanda na Ye. Mpe akonyokwama kati na moto ya sofolo liboso ya ba-anjelu ya bule mpe liboso ya Mpate. \v 11 Molinga ya pasi na bango ekomata na likolo mpo na libela na libela. Butu mpe moyi, bopemi ekozala te mpo na bato oyo bagumbamelaka nyama mpe ekeko na yango, mpe mpo na moto nyonso oyo akondima kozwa elembo ya kombo na yango. » \p \v 12 Makambo oyo ezali penza kosenga ete basantu, oyo babatelaka mibeko ya Nzambe mpe kondima na bango kati na Yesu, bazala na mpiko. \p \v 13 Bongo nayokaki mongongo moko kowuta na Lola mpe koloba na ngai : \pi1 — Koma : « Kobanda sik’oyo, esengo na bato oyo bakufaka na lisanga na Nkolo ! » \p Mpe Molimo alobaki : \pi1 — Iyo, pasi na bango esilaka mpe bazwaka bopemi, pamba te misala na bango elandaka bango. \s1 Tango ya kobuka bambuma mpe ya koyungola \p \v 14 Bongo namonaki lipata moko ya pembe, mpe ekelamu moko lokola mwana na moto evandaki na likolo ya lipata yango. Ezalaki na motole ya wolo na moto na yango mpe na mbeli ya minu makasi na loboko na yango. \p \v 15 Bongo anjelu mosusu abimaki na Tempelo mpe alobaki na mongongo makasi na ekelamu oyo evandaki na likolo ya lipata : « Kamata mbeli na yo mpe buka bambuma, pamba te tango ya kobuka bambuma ekoki, mpe ete bambuma ya mokili ekomeli. » \p \v 16 Ekelamu oyo evandaki na likolo ya lipata ebwakaki mbeli na yango na mokili, mpe mokili ezwaki lifuti na yango. \p \v 17 Anjelu mosusu abimaki na Tempelo ya Lola ; ye mpe azalaki na mbeli ya minu makasi. \v 18 Sima, anjelu mosusu oyo azalaki mokonzi ya moto alongwaki na etumbelo, mpe alobaki na mongongo makasi epai na ye oyo asimbaki mbeli ya minu makasi : « Kamata mbeli na yo ya minu mpe buka maboke ya bambuma ya vino ya mabele, pamba te bambuma yango ya vino eteli. » \p \v 19 Anjelu wana abwakaki mbeli na ye na mabele, abukaki maboke ya bambuma ya vino ya mabele mpe abwakaki yango kati na ekamolelo monene ya kanda ya Nzambe. \v 20 Bakamolaki bambuma yango na libanda ya engumba kati na ekamolelo, mpe makila ebimaki wuta na ekamolelo yango, etondaki kino kokoma na bosanda ya monoko ya mpunda, mpe epanzanaki na etando ya bakilometele pene nkama misato. \c 15 \s1 Elembo ya bitumbu sambo ya suka \p \v 1 Bongo namonaki elembo mosusu ya monene mpe ya kokamwa kati na Lola : ba-anjelu sambo bamemaki bitumbu sambo ya suka, pamba te ezali na nzela na yango nde kanda ya Nzambe ekokokisama. \v 2 Namonaki mpe eloko moko lokola etando : ezalaki lokola talatala, mpe monene lokola molayi ya ebale monene ; ezalaki kongala lokola libanga ya talo oyo babengaka krisitali esangana na moto. Namonaki lisusu ba-oyo balongaki nyama, ekeko na yango mpe motango ya kombo na yango ; bazalaki ya kotelema na likolo ya ebale monene oyo ezalaki lokola talatala mpe basimbaki mandanda oyo Nzambe apesaki bango. \v 3 Bazalaki koyemba nzembo ya Moyize, mowumbu ya Nzambe, mpe nzembo ya Mpate : \q1 Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, \q2 misala na Yo ezali minene mpe ya kokamwa ! \q1 Mokonzi ya bikolo nyonso, \q2 banzela na Yo ezali sembo mpe solo. \q1 \v 4 Nkolo, nani akomeka koboya kotosa Yo \q2 mpe koboya kopesa Kombo na Yo nkembo ? \q1 Pamba te Yo kaka nde ozali Bule. \q2 Bikolo nyonso ekoya \q1 mpe ekogumbama liboso na Yo, \q2 pamba te misala na Yo ya sembo emonisami na polele. \ms1 Bakopo sambo ya kanda ya Nzambe \p \v 5 Sima na yango, natalaki mpe namonaki Tempelo kofungwama kati na Lola ; mpe kati na yango, ezalaki na Mongombo ya Litatoli. \p \v 6 Ba-anjelu sambo oyo bamemaki bitumbu sambo babimaki wuta na Tempelo. Balataki banzambala basala na lino ya peto ; banzambala yango ezalaki kongenga makasi, mpe bakangaki mikaba ya wolo na batolo na bango. \p \v 7 Moko kati na bikelamu minei ya bomoi apesaki na ba-anjelu sambo bakopo sambo oyo basala na wolo mpe etonda na kanda ya Nzambe oyo azali na bomoi seko na seko. \v 8 Bongo lokola Tempelo etondaki na milinga kowuta na nkembo mpe na nguya ya Nzambe, moto moko te akokaki kokota kati na Tempelo yango kino bitumbu sambo oyo ba-anjelu sambo bamemaki esilaki. \c 16 \p \v 1 Bongo nayokaki mongongo moko monene kobima wuta na Tempelo mpe koloba na ba-anjelu sambo : « Bokende kosopa na mokili bakopo sambo ya kanda ya Nzambe. » \p \v 2 Anjelu ya liboso akendeki mpe asopaki kopo na ye na mokili, mpe bapota ya somo mpe ya pasi ebimaki na banzoto ya bato oyo bazalaki na elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. \p \v 3 Anjelu ya mibale asopaki kopo na ye na ebale monene, mpe ebale yango ekomaki lokola makila ya mowei ; mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezalaki kati na ebale monene ekufaki. \p \v 4 Anjelu ya misato asopaki kopo na ye na bibale mpe na bitima ya mayi, mpe mayi ekomaki makila. \v 5 Bongo nayokaki anjelu oyo azalaki na bokonzi likolo ya mayi koloba : \q1 « Oh Mosantu, Yo oyo ozali mpe ozalaki, \q2 ozali penza sembo, \q2 mpo ete okati bongo na bosembo na Yo ! \q1 \v 6 Mpo ete basopaki makila ya basantu \q2 mpe ya basakoli na Yo, \q1 mpe opesi bango makila mpo ete bamela \q2 ndenge ekoki mpo na bango. » \m \v 7 Bongo nayokaki etumbelo koloba : \q1 « Iyo, Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, \q2 okataka makambo na ndenge ya solo mpe ya sembo ! » \p \v 8 Anjelu ya minei asopaki kopo na ye na likolo ya moyi, mpe moyi ezwaki ndingisa ya kozikisa bato na nzela ya moto na yango. \v 9 Moto makasi etumbaki bato, mpe bakomaki kofinga Kombo ya Nzambe oyo azali na bokonzi likolo ya pasi wana. Kasi baboyaki kobongola mitema na bango mpe kopesa Ye nkembo. \p \v 10 Anjelu ya mitano asopaki kopo na ye na likolo ya kiti ya bokonzi ya nyama, mpe molili ezipaki bokonzi ya nyama yango. Bato bakomaki komiswa lolemo mpo na pasi, \v 11 bafingaki Nzambe ya Lola mpo na pasi mpe bapota na bango ya minene. Kasi baboyaki kaka kotika misala na bango ya mabe. \p \v 12 Anjelu ya motoba asopaki kopo na ye na ebale Efrate, mpe mayi na yango ekawukaki mpo ete nzela ya bakonzi oyo bakowuta na Este esalema. \p \v 13 Bongo namonaki milimo misato ya mbindo lokola magorodo kobima longwa na monoko ya dalagona, na monoko ya nyama mpe na monoko ya mosakoli ya lokuta. \v 14 Ezali milimo ya kindoki oyo esalaka bikamwa. Ebimi mpo na kokende epai ya bakonzi ya mokili mobimba, mpo na kosangisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. \b \mi \v 15 \wj Tala, nazali koya lokola moyibi ! Esengo na moto oyo azali kosenzela mpe kobatela bilamba na ye, mpo ete atambola motakala te, mpe bolumbu na ye emonana te na miso ya bato nyonso.\wj* \b \m \v 16 Milimo wana ya kindoki esangisaki bakonzi na esika oyo babengaka, na lokota ya Ebre, Armagedona. \p \v 17 Anjelu ya sambo asopaki kopo na ye kati na mopepe, mpe mongongo moko ya monene kowuta na Kiti ya Bokonzi ebimaki longwa na Tempelo mpe elobaki : « Ekokisami ! » \p \v 18 Bongo mikalikali engengaki, mingongo eyokanaki, bakake ebetaki, mpe mabele eninganaki makasi ; likambo ya somo boye etikala nanu kosalema te wuta moto azali na mokili. \v 19 Engumba monene ekabwanaki na biteni misato, mpe bingumba ya bikolo nyonso ebukanaki. Bongo Nzambe akanisaki Babiloni monene mpe apesaki yango kopo etonda na vino ya kanda na Ye ya makasi. \v 20 Bisanga nyonso ekimaki, mpe bangomba emonanaki lisusu te. \v 21 Bamvula minene ya mabanga enokaki ; libanga moko na moko ezalaki na bakilo pene tuku minei na mitano, mpe ekweyelaki bato longwa na likolo. Mpe bato bafingaki Nzambe mpo na pasi ya mvula wana ya mabanga, pamba te pasi yango ezalaki ya somo makasi. \c 17 \s1 Babiloni, mwasi ya ndumba \p \v 1 Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo etumbu oyo mwasi ya ndumba monene oyo avandaka na bibale minene akozwa. \v 2 Bakonzi minene ya mokili basalaki ekobo elongo na ye, mpe bavandi ya mokili balangwaki vino ya kindumba na ye. » \p \v 3 Bongo kati na Molimo, amemaki ngai kati na esobe moko. Mpe kuna, namonaki mwasi moko avanda na likolo ya nyama ya motane. Loposo ya nyama yango etondaki na bakombo oyo ezalaki kofinga Nzambe. Yango moko nyama ezalaki na mito sambo mpe na maseke zomi. \v 4 Mwasi yango alataki bilamba ya motane ya pete mpe ya motane makasi, babiju ya wolo, mabanga ya talo mpe mayaka. Na loboko na ye, asimbaki kopo moko basala na wolo mpe etonda na makambo ya nkele mpe ya bosoto ya kindumba na ye. \v 5 Na mbunzu na ye, bakomaki kombo moko oyo ebombaki makambo ya somo mpe oyo ndimbola na yango ezali : \pc Babiloni monene, \pc Mama ya Basi ya Ndumba \pc mpe ya Makambo ya Nkele ya Mokili. \m \v 6 Namonaki ete mwasi yango alangwaki makila ya basantu mpe ya batatoli ya Yesu. \p Tango kaka namonaki ye, namitungisaki mingi. \s1 Liloba ya liboso : mabombami ya mwasi ya ndumba \p \v 7 Bongo anjelu alobaki na ngai : « Mpo na nini ozali komitungisa ? Nakoyebisa yo mabombami ya mwasi wana mpe ya nyama oyo ememi ye, nyama oyo ezali na mito sambo mpe na maseke zomi. \v 8 Nyama oyo omonaki ; oyo liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te ; ekobima wuta na libulu moko ya monene mpe ya molili makasi, mpe ekokende na libebi na yango. Bavandi ya mokili, ba-oyo bakombo na bango ekomama te kati na buku ya bomoi wuta na ebandeli ya mokili bakokamwa tango bakomona nyama ; pamba te liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, kasi ekoya lisusu. \v 9 Makambo oyo ezali penza kosenga mayele oyo bwanya engengisaka mpo na kososola yango. Mito sambo ezali bangomba sambo epai wapi mwasi avandaka. \v 10 Ezali lisusu bakonzi sambo : mitano kati na bango basila kokweya na bokonzi. Moko azali sik’oyo na bokonzi, mpe mosusu ayei nanu te ; kasi tango akoya, akowumela kaka mpo na tango moke. \v 11 Bongo nyama oyo, liboso, ezalaki, mpe sik’oyo, ezali lisusu te, yango nde mokonzi ya mwambe. Ezali mpe moko kati na bakonzi wana sambo, mpe ezali kokende na libebi na yango. \p \v 12 Maseke zomi oyo omonaki ezali bakonzi zomi oyo bazwi nanu bokonzi te, kasi bakozwa yango mpo na ngonga moko mpe bakosalela yango lisanga na nyama. \v 13 Bango nyonso zomi bazali na likanisi kaka moko : kosangisa nguya mpe bokonzi na bango mpo na kosalela nyama. \v 14 Bakobundisa Mpate, kasi Mpate akolonga bango mpo ete azali Nkolo ya bankolo mpe Mokonzi ya bakonzi. Elongo na Ye, babengami, baponami mpe ba-oyo bazali sembo bakolonga mpe lokola. » \p \v 15 Anjelu alobaki na ngai : « Mayi oyo omonaki, oyo mwasi ya ndumba avandaki na likolo na yango, ezali bato ya mokili, bangulupa ebele ya bato, bikolo mpe nkota. \v 16 Nyama mpe maseke zomi oyo omonaki ekoyina mwasi ya ndumba, ekobotola biloko na ye nyonso mpe ekotika ye bolumbu ; ekolia misuni na ye mpe ekotumba ye na nzela ya moto. \v 17 Pamba te Nzambe atia kati na mitema na bango makanisi ya kokokisa mabongisi na Ye moko Nzambe, na boyokani malamu mpo na kolatisa nyama wana nguya na bango ya bokonzi, kino mikano nyonso ya Nzambe ekokisama. \v 18 Mwasi oyo omonaki ezali engumba monene oyo ekonzaka bakonzi ya mokili. » \c 18 \s1 Liloba ya mibale : kokweya ya Babiloni \p \v 1 Sima na makambo wana, namonaki anjelu mosusu kokita wuta na Lola ; azalaki na bokonzi monene, mpe nkembo na ye engengisaki mokili. \v 2 Agangaki na mongongo makasi : \q1 « Ekweyi ! Ekweyi ! \q2 Babiloni monene ekweyi penza ! \q1 Ekomi ndako ya milimo mabe, \q2 ebombamelo ya milimo nyonso ya mbindo, \q2 ya bandeke ya mbindo mpe ya banyama ya nkele. \q1 \v 3 Pamba te bikolo nyonso emelaki \q2 vino ya kanda ya kindumba na yango. \q1 Bakonzi ya mokili basalaki ekobo elongo na Babiloni, \q2 mpe bozwi ya bato ya mokili, \q1 oyo basalaka mombongo, \q2 emataki makasi mpo na monzele na yango, \q2 oyo elekaki ndelo. » \s1 Liloba ya misato : etumbu ya Babiloni \p \v 4 Bongo nayokaki mongongo mosusu koloba wuta na likolo : « Bino bato na ngai, bobima longwa na Babiloni mpo ete bosangana te na masumu na yango, mpe mpo ete bozwa te bitumbu oyo ekokweyela yango. \v 5 Pamba te masumu na yango esali mipiku kino na likolo, mpe Nzambe akanisi lisusu misala na yango nyonso ya mabe. \v 6 Bosala yango ndenge kaka yango esalaki bato mosusu, bozongisela yango mbala mibale mabe oyo esalaki bino. Kati na kopo oyo ezalaki kosalela mpo na komelisa bamosusu masanga, botia masanga oyo ezali makasi mbala mibale koleka. \v 7 Bonyokola mpe bosala yango mabe makasi ndenge kaka emipesaki na nkembo mpe na lokumu. Pamba te emikumisaka kati na motema na yango : ‹ Navandi lokola mwasi mokonzi, nakufisa mobali te mpe nakotikala kosala matanga ata mokolo moko te. › \p \v 8 Yango wana, bitumbu nyonso ekokweyela yango na mokolo moko : kufa, matanga mpe nzala. Ekozikisama na moto, pamba te Nzambe oyo apesi yango etumbu azali Nkolo-Na-Nguya. \s1 Liloba ya minei, ya mitano mpe ya motoba : bileli na tina na Babiloni \p \v 9 Tango bakonzi ya mokili, oyo bakabolaki elongo na yango bomoi na yango ya kindumba mpe ya bisengo, bakomona molinga ya engumba oyo etumbami, bakolela mpe bakoyoka mawa na tina na yango. \v 10 Mpo na somo ya minyoko na yango, bakotelema na mosika mpe bakoganga : ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene ! Mawa na yo, Babiloni, engumba ya nguya ! Kobebisama na yo ezwi kaka ngonga moko pamba ! › \p \v 11 Bongo bato ya mombongo ya mokili bakolela mpe bakosala matanga na tina na yango, pamba te moko te akosomba lisusu biloko na yango : \v 12 wolo, palata, mabanga ya talo, mayaka, bilamba ya lino ya kitoko, bilamba ya motane ya pete, bilamba ya swa, bilamba ya motane makasi, banzete na bango ya solo kitoko, biloko na bango oyo basala na pembe ya nzoko, biloko nyonso oyo basala na banzete ya talo, na bronze, na bibende mpe na mabanga kitoko oyo babengaka marbre ; \v 13 eteni ya poso ya nzete oyo epesaka solo kitoko, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, malasi, mire, ansa, vino, mafuta, farine, ble, bangombe, bameme, bampunda, bashar, bawumbu mpe milimo ya bato. \p \v 14 Bakoloba : ‹ Biloko oyo ozalaki kolinga mingi ekimi yo mosika ; biloko nyonso oyo ezalaki kosala lolendo mpe lofundu na yo ebebi, ekotikala kozwama lisusu te ! › \p \v 15 Bato ya mombongo oyo bamonaki bomengo komata mpo ete bazalaki kotekela engumba yango biloko na bango, bakotelema na mosika mpo na somo ya pasi oyo ekokweyela yango. Bakolela mpe bakosala matanga. \v 16 Bakoloba : \q1 ‹ Mawa ! Mawa na yo, engumba monene, \q2 yo oyo ozalaki kolata bilamba ya lino ya kitoko, \q1 bilamba ya motane makasi, \q2 babiju ya wolo, mabanga ya talo, mpe mayaka ! \q1 \v 17 Kaka na ngonga moko, bomengo nyonso esili ! › \p Batambolisi nyonso ya bamasuwa, bato nyonso oyo basalaka mibembo na bamasuwa, bato oyo basalaka kati na bamasuwa mpe ba-oyo basalaka mombongo na nzela ya mayi, bakotelema na mosika. \v 18 Wana bakomona molinga komata longwa na engumba oyo etumbami, bakoganga : ‹ Engumba nini ekokanaki na engumba monene oyo ? › \p \v 19 Bakobwaka putulu na mito na bango, bakolela, bakosala matanga mpe bakoganga makasi : \q1 ‹ Mawa ! Mawa na yo, \q2 engumba monene epai wapi bato nyonso \q1 oyo bazalaki na bamasuwa na likolo ya ebale monene \q2 bakomaki bazwi mpo na bomengo na yo ! \q2 Na ngonga moko kaka, obebisami ! › \b \q1 \v 20 Likolo, sepela na libebi na yango ! \q2 Bino mpe basantu, bosepela ! \q1 Bino bantoma mpe basakoli, bosepela mpe lokola ! \q2 Pamba te Nzambe alongisi bino \q2 awa akateli yango etumbu. » \s1 Liloba ya sambo : libebi ya suka ya Babiloni \p \v 21 Bongo anjelu moko ya nguya akamataki libanga moko oyo ezalaki lokola libanga oyo basalelaka mpo na konika ble, abwakaki yango na ebale monene mpe alobaki : \q1 « Babiloni, engumba monene, ekobwakama ndenge wana, \q2 kaka na makasi moko wana, \q2 mpe ekomonana lisusu te. \q1 \v 22 Mindule ya babeti mandanda mpe ya bayembi, \q2 ya babeti piololo mpe babeti kelelo, \q1 ekoyokana lisusu te kati na yo. \q2 Bato ya misala ya maboko ya ndenge na ndenge \q1 bakomonana lisusu te kati na yo. \q2 Makelele ya mabanga minene oyo banikelaka ble \q2 ekoyokana lisusu te kati na yo. \q1 \v 23 Mwinda ekopela lisusu te kati na yo, \q2 mpe mongongo ya mobali mpe mwasi oyo bawuti kobalana \q1 ekoyokana lisusu te kati na yo. \q2 Makambo wana nyonso ekosalema, \q1 pamba te bato na yo ya mombongo bazalaki bato na nguya ya mokili. \q2 Okosaki bato ya bikolo nyonso na nzela ya maji na yo. \q1 \v 24 Kati na yo, emonanaki makila ya basakoli, \q2 ya basantu mpe ya bato nyonso \q2 oyo babomamaki na mokili. » \c 19 \s1 Nzembo ya elonga \p \v 1 Sima na makambo wana, nayokaki lokola makelele ya bato ebele koganga kuna na Lola : \q1 « Aleluya ! \q2 Lobiko, nkembo mpe nguya ezali ya Nzambe na biso, \q1 \v 2 pamba te akataka makambo na bosolo mpe na bosembo ; \q2 apesi etumbu epai ya mwasi ya ndumba monene \q1 oyo azalaki kobebisa mokili na nzela ya kindumba na ye, \q2 mpe azongisi mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na Ye. » \p \v 3 Bagangaki na mbala ya mibale : \q1 « Aleluya ! \q2 Pamba te molinga kowuta na mwasi ya ndumba monene \q2 ezali komata na likolo mpo na libela na libela ! » \p \v 4 Bampaka tuku mibale na minei mpe bikelamu minei ya bomoi bafukamaki mpe bagumbamelaki Nzambe oyo avandaka na Kiti ya Bokonzi, mpe bagangaki : \q1 « Amen ! Aleluya ! » \p \v 5 Bongo mongongo moko ebimaki wuta na Kiti ya Bokonzi mpe elobaki : \q1 « Bokumisa Nzambe na biso ; \q2 bino bawumbu na Ye nyonso, \q1 bino oyo botosaka Ye, \q2 mikolo mpe bana mike ! » \s1 Feti ya libala ya Mpate \p \v 6 Bongo nayokaki makelele moko lokola makelele ya bato ebele, lokola makelele ya bibale minene, mpe lokola lokito ya kake makasi ; ezalaki koganga : \q1 « Aleluya ! \q2 Pamba te Yawe na biso, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, \q2 atalisi bokonzi na Ye. \q1 \v 7 Tika ete tosepela, totonda na esengo \q2 mpe topesa Ye nkembo ! \q1 Pamba te tango ya feti ya libala ya Mpate ekoki. \q2 Mwasi mobandami na Ye ya libala asili komibongisa. \q1 \v 8 Elamba ya lino ya kitoko oyo ezali kongenga epesameli ye \q2 mpo ete alata yango. » \m Elamba ya lino ya peto ezali misala ya bosembo ya basantu. \s1 Maloba ya solo ya Nzambe \p \v 9 Bongo anjelu alobaki na ngai : « Koma : ‹ Esengo na bato oyo babengami na feti ya libala ya Mpate ! › » \p Alobaki lisusu : « Ezali maloba ya solo ya Nzambe. » \p \v 10 Bongo nafukamaki na makolo ya anjelu mpo na kogumbamela ye, kasi alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala mpe ya bandeko na yo, oyo babatelaka litatoli ya Yesu. Fukamela nde Nzambe ! Pamba te ezali litatoli ya Yesu nde molimo ya lisakoli. » \ms1 Lisolo ya lobiko kati na bimoniseli sambo \s1 Emoniseli ya liboso : elonga ya Klisto \p \v 11 Bongo namonaki Lola efungwami, mpe mpunda moko ya pembe ezalaki liboso na ngai. Kombo ya motambolisi ya mpunda yango ezali : « Sembo mpe Solo. » Akataka makambo mpe abundaka bitumba na bosembo. \v 12 Miso na Ye ezali lokola moto oyo ezali kopela ; mpe na moto na Ye, ezali na mitole ebele. Bakoma kombo moko na nzoto na Ye, kombo oyo Ye moko kaka nde ayebi. \v 13 Alati nzambala bazindisa na makila ; kombo na Ye ezali : « Liloba na Nzambe. » \v 14 Mampinga ya Lola ezalaki kolanda Ye na likolo ya bampunda ya pembe ; balataki bilamba ya lino ya kitoko, ya pembe mpe ya peto. \v 15 Mopanga moko ya minu ezalaki kobima na monoko na Ye mpo na kobeta bikolo. Akokamba yango na lingenda ya ebende mpe akonika bambuma ya vino kati na ekamolelo ya vino ya kanda monene ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. \v 16 Na nzambala mpe na mopende na Ye, bakoma kombo : \pc « Mokonzi ya Bakonzi mpe Nkolo ya bankolo. » \s1 Emoniseli ya mibale : feti monene ya Nzambe \p \v 17 Bongo namonaki anjelu moko atelemi kati na moyi ; azalaki koloba na mongongo makasi epai ya bandeke nyonso oyo ezalaki kopumbwa na likolo makasi : « Boya, bosangana mpo na feti monene ya Nzambe, \v 18 mpo ete bolia misuni ya bakonzi, ya bakonzi ya mampinga, ya bilombe, ya bampunda elongo na batambolisi na yango mpe ya bato nyonso : bawumbu to bansomi, bato minene to bato pamba. » \s1 Emoniseli ya misato : bakangi nyama mpe mosakoli ya lokuta \p \v 19 Bongo namonaki nyama mpe bakonzi ya mokili elongo na mampinga na bango kosangana mpo na kobundisa Motambolisi ya mpunda mpe mampinga na Ye. \v 20 Kasi nyama ekangamaki elongo na mosakoli ya lokuta oyo azalaki kosala bikamwa na kombo ya nyama. Na nzela ya bikamwa yango, akosaki bato oyo batiamaki elembo ya nyama mpe bagumbamelaki ekeko na yango. Bango mibale : nyama mpe mosakoli ya lokuta, babwakamaki ya bomoi kati na liziba ya moto mpe ya sofolo. \v 21 Bongo mopanga oyo ebimaki na monoko ya Motambolisi ya mpunda ebomaki bato oyo batikalaki, mpe bandeke nyonso etondaki na kolia misuni ya bibembe na bango. \c 20 \s1 Emoniseli ya minei : dalagona akangami \p \v 1 Bongo namonaki anjelu moko kokita wuta na Lola ; asimbaki na loboko na ye fungola ya libulu ya monene mpe ya molili makasi mpe monyololo moko ya monene. \v 2 Akamataki dalagona, nyoka wana ya kala oyo azali zabolo to Satana ; akangaki ye monyololo mpo na mibu nkoto moko. \v 3 Anjelu abwakaki ye kati na libulu wana ya monene mpe ya molili makasi ; akangaki yango mpe abetaki kashe na likolo na yango mpo ete akosa lisusu bikolo te kino tango mibu nkoto moko ekokoka. Sima na yango, bakotika ye mpo na mwa tango moke. \s1 Emoniseli ya mitano : elonga ya suka \p \v 4 Bongo namonaki bakiti ya bokonzi. Bato oyo bavandaki na bakiti yango bapesamelaki bokonzi ya kosambisa. Namonaki mpe milimo ya bato oyo bakataki bango mito mpo na litatoli na bango na tina na Yesu mpe na tina na Liloba na Nzambe, mpo ete bagumbamelaki te nyama mpe ekeko na yango mpe batiamaki te elembo na yango na bambunzu mpe na maboko na bango. Bazongaki na bomoi mpe bakonzaki elongo na Klisto mibu nkoto moko. \p \v 5 Bato mosusu oyo bakufaki bazongaki na bomoi te liboso ete mibu nkoto moko esila. Yango nde lisekwa ya liboso. \v 6 Bato oyo bakosekwa na lisekwa ya liboso bazali bato ya esengo mpe basantu ! Kufa ya mibale ezali na bokonzi te epai na bango, kasi bakozala Banganga-Nzambe ya Nzambe mpe ya Klisto, mpe bakokonza elongo na Ye mibu nkoto moko. \p \v 7 Tango mibu wana nkoto moko ekosila, bakobimisa Satana wuta na boloko na ye, \v 8 mpe akokende kokosa bikolo ya bangambo nyonso minei ya mokili mobimba, elingi koloba Gogi mpe Magogi. Akosangisa bango mpo na bitumba. Motango na bango ekozala lokola zelo ya ebale monene oyo bakoki kotanga te. \p \v 9 Bapanzanaki na mokili mobimba, bazingelaki molako ya basantu mpe engumba oyo Nzambe alingaka. Kasi moto ekitaki longwa na likolo mpe ezikisaki bango. \v 10 Bongo Satana oyo azalaki kokosa bango abwakamaki na liziba ya moto mpe ya sofolo, epai wapi nyama mpe mosakoli ya lokuta babwakamaki. Bakonyokolama kuna seko na seko, butu mpe moyi. \s1 Emoniseli ya motoba : kosambisama \p \v 11 Bongo namonaki Kiti monene ya Bokonzi, ya langi ya pembe elongo na Ye oyo avandaki na Kiti yango. Likolo mpe mabele ekimaki mosika na Ye mpe emonanaki lisusu te. \v 12 Namonaki lisusu bakufi, bato minene mpe bato pamba batelemi liboso ya Kiti ya Bokonzi. Babuku efungolamaki. Mpe buku mosusu efungolamaki, yango nde buku ya bomoi. Bongo bakufi basambisamaki kolanda misala na bango ndenge ekomama kati na babuku. \v 13 Ebale monene esanzaki bakufi oyo bazalaki kati na yango ; kufa elongo na mboka ya bakufi esanzaki mpe bakufi oyo bazalaki kati na yango. Mpe bato nyonso basambisamaki, moto na moto kolanda misala na ye. \p \v 14 Bongo kufa mpe mboka ya bakufi ebwakamaki kati na liziba ya moto. Liziba ya moto ezali kufa ya mibale. \v 15 Moto nyonso oyo kombo na ye ekomamaki te kati na buku ya bomoi abwakamaki kati na liziba ya moto. \c 21 \s1 Emoniseli ya sambo : likolo ya sika mpe mabele ya sika \p \v 1 Bongo namonaki Likolo ya sika mpe mabele ya sika, pamba te Likolo ya liboso mpe mabele ya liboso elimwaki, mpe ebale monene ezalaki lisusu te. \v 2 Namonaki engumba ya bule, Yelusalemi ya sika, kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. Ebongisamaki lokola mwasi mobandami ya libala oyo asali monzele mpo na mobali na ye. \v 3 Nayokaki mongongo moko ya monene kobima wuta na Kiti ya Bokonzi mpe ezalaki koloba : « Botala, Nzambe atie evandelo na Ye kati na bato mpe akovanda elongo na bango. Bakozala bato na Ye, Ye moko Nzambe akozala elongo na bango mpe akozala Nzambe na bango. \v 4 Akopangusa mpinzoli nyonso na miso na bango. Kufa, matanga, kolela to pasi ekozala lisusu te, pamba te makambo ya kala esili koleka. » \p \v 5 Bongo Ye oyo avandaki na Kiti ya Bokonzi alobaki : « Nazali kokomisa biloko nyonso ya sika. » \p Alobaki lisusu : « Koma makambo oyo, pamba te maloba oyo ezali penza ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. » \p \v 6 Alobaki na ngai lisusu : « Ekokisami. Nazali Alifa mpe Omega, Ebandeli mpe Suka. Na moto oyo azali na posa ya mayi, nakopesa mayi ya ofele wuta na etima ya mayi ya bomoi. \v 7 Yango nde ekozala libula ya moto oyo akolonga. Nakozala Nzambe na ye, mpe ye akozala mwana na Ngai. \v 8 Kasi bato oyo batepaka-tepaka na kondima na bango, bato oyo bazangi kondima, bato oyo basalaka makambo ya soni, babomi, bandumba, bato ya maji, basambeli bikeko, mpe bato nyonso ya lokuta, bakobwakama kati na liziba ya moto mpe ya sofolo : yango nde kufa ya mibale. » \s1 Yelusalemi ya sika, mwasi ya Mpate \p \v 9 Moko kati na ba-anjelu sambo oyo bazalaki na bakopo sambo etonda na bitumbu sambo ya suka ayaki mpe alobaki na ngai : « Yaka, nakolakisa yo mwasi mobandami ya libala, mwasi ya Mpate. » \p \v 10 Bongo kati na Molimo, amemaki ngai na likolo ya ngomba moko ya monene mpe ya molayi ; alakisaki ngai Yelusalemi, engumba ya bule, oyo ezalaki kokita wuta na Lola epai ya Nzambe. \v 11 Ezalaki kongenga na nkembo ya Nzambe, mpe kongenga na yango ezalaki lokola kongenga ya libanga ya talo makasi, lokola jasipe oyo emonisaka lokola krisitali. \v 12 Engumba yango ezalaki na mir moko ya molayi mpe emata na bosanda, mpe ezalaki na bikuke zomi na mibale, mpe na ba-anjelu zomi na mibale na bikuke yango. Bakombo ya mabota zomi na mibale ya Isalaele ezalaki ya kokomama na bikuke yango. \v 13 Bikuke misato ezalaki na ngambo ya este, misato na ngambo ya nor, misato na ngambo ya sude, mpe misato na ngambo ya weste. \v 14 Mir ya engumba yango etongamaki likolo ya miboko zomi na mibale, mpe bakombo ya bantoma zomi na mibale ya Mpate ezalaki ya kokomama na likolo na yango. \p \v 15 Anjelu oyo azalaki kosolola na ngai asimbaki lokola emekelo molayi lingenda basala na wolo, mpo na komeka molayi ya engumba, ya bikuke na yango mpe ya mir na yango. \v 16 Bangambo nyonso minei ya engumba yango ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse. Anjelu asalelaki lingenda na ye mpo na komeka molayi ya engumba : ezalaki na bakilometele pene nkoto mibale na nkama mibale na molayi, na mokuse mpe na bosanda. \v 17 Anjelu amekaki mpe kovimba ya mir kolanda ndenge bato basalaka : ezalaki na bametele pene tuku motoba na mitano. \p \v 18 Mir yango etongamaki na jasipe, mpe engumba ezalaki ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, peto lokola talatala. \v 19 Babambaki mabanga ya talo ya ndenge na ndenge na miboko ya mir ya engumba yango : babambaki jasipe na moboko ya liboso, safiri na moboko ya mibale, shalisedwane na moboko ya misato, emerode na moboko ya minei, \v 20 saridwane na moboko ya mitano, korinaline na moboko ya motoba, krizolite na moboko ya sambo, berili na moboko ya mwambe, topaze na moboko ya libwa, krizopraze na moboko ya zomi, tirikwaze na moboko ya zomi na moko, mpe ametisite na moboko ya zomi na mibale. \v 21 Bikuke wana zomi na mibale ezalaki lokola mayaka zomi na mibale ; ekuke moko na moko esalemaki na liyaka moko. Balabala monene ya engumba yango ezalaki ya wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, peto lokola talatala. \p \v 22 Namonaki ata tempelo moko te kati na engumba, pamba te Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso mpe Mpate nde bazali Tempelo na yango. \v 23 Engumba yango ezali na posa te ya moyi to ya sanza mpo na kongengisa yango, pamba te engengisamaka na nkembo ya Nzambe ; bongo Mpate azali mwinda na yango. \v 24 Bikolo ekotambola na pole na yango, mpe bakonzi ya mokili bakomema nkembo na bango kati na engumba. \v 25 Bikuke ya engumba yango ekobanda kokangama te mokolo mobimba, pamba te butu ekozala kuna te. \v 26 Bakomemela engumba yango nkembo mpe lokumu ya bikolo. \v 27 Eloko moko te ya mbindo ekokota kuna, mpe moto moko te oyo asalaka makambo ya nkele mpe alobaka lokuta akokota kuna ; kaka ba-oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi ya Mpate nde bakokota kuna. \c 22 \s1 Nzambe akokomisa nyonso ya sika \p \v 1 Bongo anjelu alakisaki ngai ebale ya mayi ya bomoi ; ezalaki kongenga lokola talatala mpe ezalaki kobima wuta na Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate. \v 2 Ezalaki kotiola na kati-kati ya balabala monene ya engumba. Na esika oyo ebale ekabwanaki na biteni mibale, ezalaki na nzete ya bomoi oyo ebotaka bambuma mbala zomi na mibale na mobu, elingi koloba ete ebotaka bambuma sanza na sanza ; mpe makasa na yango ebikisaka bikolo. \p \v 3 Elakeli mabe ekozala lisusu te. Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe ya Mpate ekozala kati na engumba, mpe bawumbu na Ye bakosalela Ye. \v 4 Bakomona elongi na Ye, mpe Kombo na Ye ekokomama na bambunzu na bango. \v 5 Butu ekozala lisusu te. Bakozala na posa te ya pole ya mwinda to ya moyi, pamba te Nkolo Nzambe akongengisa bango na pole na Ye. Mpe bakokonza seko na seko. \p \v 6 Anjelu alobaki na ngai : « Maloba oyo ezali ya solo mpe ebongi na kotiela yango motema. Nkolo, Nzambe ya milimo ya basakoli, atindaki anjelu na Ye mpo na kolakisa na basali na Ye makambo oyo esengeli kosalema kala mingi te. » \s1 Yesu azali koya \p \v 7 \wj Yoka ! Nazali koya kala mingi te. Esengo na moto oyo abatelaka maloba ya masakoli oyo ekomama kati na buku oyo.\wj* \b \p \v 8 Ngai Yoane, nayokaki mpe namonaki makambo oyo. Mpe tango nayokaki mpe namonaki yango, nafukamaki na makolo ya anjelu oyo alakisaki ngai yango mpo na kogumbamela ye. \v 9 Kasi anjelu alobaki na ngai : « Kosala bongo te ! Nazali moninga na yo ya mosala, ya bandeko na yo, basakoli ; mpe ya ba-oyo nyonso babatelaka maloba ya buku oyo. Gumbamela nde Nzambe ! » \p \v 10 Bongo alobaki na ngai lisusu : « Kobomba te maloba ya masakoli ya buku oyo, pamba te tango ekomi pene. \v 11 Tika ete moto oyo asalaka mabe akoba kosala mabe, tika ete moto oyo azali mbindo akoba kozala mbindo, tika ete moto oyo azali sembo akoba kozala sembo, mpe tika ete moto azali bule akoba kozala bule ! » \b \b \p \v 12 \wj Yoka ! Nazali koya kala mingi te ! Nakomema elongo na Ngai lifuti mpo na moto na moto kolanda misala na ye.\wj* \v 13 \wj Nazali Alifa mpe Omega, Moto ya liboso mpe Moto ya suka, Ebandeli mpe Suka.\wj* \b \p \v 14 \wj Esengo na bato oyo basukolaka bilamba na bango mpo na kozwa ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya koleka na bikuke mpo na kokota na engumba.\wj* \v 15 \wj Kasi bambwa, bato ya maji, bandumba, babomi, basambeli bikeko mpe bato nyonso oyo balingaka mpe basalelaka lokuta, bakozala na libanda ya engumba.\wj* \b \p \v 16 \wj Ngai Yesu, natindaki anjelu na Ngai mpo na kotatola bosolo ya makambo oyo kati na Mangomba. Nazali Mosisa mpe mokitani ya Davidi ; Monzoto ya tongo, oyo engengaka.\wj* \b \p \v 17 Molimo mpe Mwasi mobandami ya libala balobi : \pi1 — Yaka ! Tika ete ye oyo azali koyoka maloba oyo aloba : « Yaka ! » Tika ete ye oyo azali na posa ya mayi aya ; mpe tika ete ye oyo alingi kozwa mayi ya bomoi azwa yango na ofele. \b \p \v 18 Ngai Yoane, nazali koyebisa moto nyonso oyo azali koyoka maloba ya masakoli ya buku oyo : soki moto abakisi ata likambo moko na likolo ya makambo oyo, Nzambe akobakisela ye bitumbu oyo ekomami kati na buku oyo ; \v 19 mpe soki moto alongoli ata likambo moko na maloba ya masakoli ya buku oyo, Nzambe mpe akolongola ye ndingisa ya kolia bambuma ya nzete ya bomoi mpe ya kokota kati na Engumba ya Bule, oyo etalisami kati na buku oyo. \b \p \v 20 Motatoli ya makambo oyo alobi : \pi1 \wj — Iyo, nazali koya kala mingi te.\wj* \p Amen : Nkolo Yesu, yaka ! \b \p \v 21 Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu ezala na bino nyonso !