\id PHP Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Bafilipi \toc1 Mokanda epai ya Bafilipi \toc2 Bafilipi \toc3 Fil \mt2 Mokanda epai ya \mt1 Bafilipi \c 1 \s1 Ebandeli ya mokanda \m \v 1 Polo mpe Timote, bawumbu ya Yesu-Klisto ; \b \mi Epai ya basantu nyonso kati na Klisto, oyo bazali na Filipi, elongo na bakambi ya Lingomba mpe badiakona : \b \m \v 2 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto ! \b \s1 Matondi mpe losambo \p \v 3 Nazongisaka matondi epai ya Nzambe na ngai tango nyonso nakanisaka bino ; \v 4 nasambelaka Nzambe tango nyonso mpo na bino nyonso mpe nasalaka yango na esengo, \v 5 mpo na lisungi na bino kati na mosala ya kopanza Sango Malamu, wuta na mokolo ya liboso kino sik’oyo. \v 6 Nandimisami solo ete Ye oyo abandaki mosala kitoko oyo kati na bino akokomisa yango kino na suka, na mokolo ya Yesu-Klisto. \p \v 7 Ezali sembo mpo na ngai kozala na makanisi ya lolenge oyo mpo na bino nyonso ; solo, nalingaka bino mingi, pamba te bino nyonso bosanganaka makasi elongo na ngai kati na ngolu ya Nzambe, ezala tango nazali ya kokangama na minyololo kati na boloko to tango nazali kolobela mpe kotatola Sango Malamu na molende. \v 8 Nzambe azali Motatoli na ngai ete nalingaka bino nyonso makasi, na bolingo ya Yesu-Klisto. \p \v 9 Mpe nasengaka kati na mabondeli na ngai ete bolingo na bino ekoba kokola tango nyonso kati na boyebi ya solo mpe na bososoli ya kokoka, \v 10 mpo ete bokoka kososola makambo oyo eleki malamu. Na bongo, bokozala peto mpe bokozanga pamela mpo na mokolo ya Klisto, \v 11 bokotonda na mbuma ya bosembo oyo ewutaka na Yesu-Klisto, mpo na nkembo mpe lokumu ya Nzambe. \s1 Boloko ya Polo mpe Sango Malamu \p \v 12 Bandeko na ngai, nalingi boyeba ete makambo oyo ekomeli ngai esali penza ete Sango Malamu ekende liboso. \v 13 Boye, bakengeli nyonso ya ndako ya mokonzi mpe bato nyonso oyo bazali awa bayebi ete nazali kati na boloko mpo na Klisto. \v 14 Mpe lisusu, kozala na ngai kati na boloko epesi na bandeko mingi kati na Nkolo molende ya kotia elikya kati na Nkolo mpe ya koteya Liloba na Nzambe, na mpiko mpe na bozangi bobangi. \v 15 Ezali solo ete bamoko bazali kosakola Klisto mpo na zuwa mpe kowelana na ngai, kasi bamosusu bazali kosala yango na makanisi ya malamu : \v 16 bazali kosala na bolingo mpo bayebi ete ezali mpo na kotatola mpo na Sango Malamu nde ngai nazali awa. \v 17 Kasi mpo na ba-oyo bazali kosakola Klisto mpo na posa ya kowelana, makanisi na bango ezali ya malamu te : bazali kokanisa ndenge nini bakoki kobakisa pasi na ngai, na tango oyo nazali na pasi lokola mokangami kati na boloko. \v 18 Ezala bongo to bongo te, eloko ya motuya ezali ete Klisto azali kosakolama, na lolenge nyonso, ezala na makanisi ya mabe to na bosolo ; mpe ngai nazali kosepela mpo na yango. Kutu, nakokoba kosepela mpo na yango. \v 19 Nayebi solo ete, na nzela ya mabondeli na bino mpe ya lisungi ya Molimo ya Yesu-Klisto, makambo oyo ekomeli ngai ekosuka na kokangolama na ngai. \p \v 20 Eloko nazali kozela makasi mpe kolikya na motema na ngai mobimba ezali ete nayokisama soni te ata na likambo moko, kasi Klisto akumisama kati na nzoto na ngai, sik’oyo mpe tango nyonso, na elikya nyonso, ezala na nzela ya bomoi na ngai to na nzela ya kufa na ngai. \v 21 Mpo na ngai, kosalela Klisto, yango nde tina ya bomoi na ngai ; mpe kokufa ezali litomba. \v 22 Nzokande, soki kokoba na ngai kobika kati na mokili ekopesaka ngai nzela ya kobota bambuma ebele ya malamu na nzela ya mosala na ngai, nayebi te nini nasengeli kopona. \v 23 Makambo mibale ezali kobenda ngai ngambo na ngambo : na ngambo moko, kokufa mpo na kozala elongo na Klisto, pamba te yango nde eleki malamu ; \v 24 na ngambo mosusu, kowumela kati na nzoto, pamba te yango nde eleki na tina likolo na bino. \v 25 Lokola nandimisami na yango, nayebi malamu ete nakowumela mpe nakokoba kozala kati na bino nyonso, mpo na kosunga ete bokola mpe bosepela kati na kondima. \v 26 Boye, tango nakozala lisusu elongo na bino, lolendo na bino kati na Yesu-Klisto ekobakisama lisusu mpo na ngai. \s1 Bomoi oyo ebongi liboso ya Sango Malamu \p \v 27 Kasi botambola na lolenge oyo ebongi liboso ya Sango Malamu ya Klisto mpo ete, ezala nayei kotala bino to nayei te, nayoka sango ete botelemi ngwi mpe bosangani lokola moto moko, bozali kobunda elongo, na motema moko, mpo na kobatela kondima oyo Sango Malamu ememelaki bino, \v 28 na kolenga te liboso ya banguna na bino. Mpo na bango, ezali elembo ya libebi ; kasi mpo na bino, ezali elembo ya lobiko, mpe ewutaka na Nzambe. \p \v 29 Mpo na oyo etali Klisto, Nzambe apesaki bino ngolu kaka te ya kondimela Ye, kasi ngolu mpe ya konyokwama mpo na Ye, \v 30 pamba te bozali nde kobunda etumba ya lolenge moko na oyo bomonaki ngai kobunda mpe oyo bozali koyoka ete nazali lisusu kobunda sik’oyo. \c 2 \s1 Ndakisa ya komikitisa ya Klisto \p \v 1 Boye, soki kolendisama ezali kati na Klisto, soki kobondisama ezali kati na bolingo, soki boyokani ezali kati na Molimo, soki bolamu mpe mawa ezali kati na bino, \v 2 botondisa motema na ngai na esengo na kozalaka motema moko, bolingo moko, likanisi moko mpe posa moko. \v 3 Bosala eloko moko te na kowelana to na koluka lokumu ezanga tina ; kasi na komikitisa nyonso, bomona baninga lokola nde baleki bino. \v 4 Tika ete moko te kati na bino aluka bolamu na ye moko kaka, kasi aluka mpe bolamu ya bandeko mosusu. \v 5 Bozala na posa ya kozalaka na bizaleli ya boye kati na bino ndenge mpe Yesu-Klisto azalaki na yango. \q1 \v 6 Ye oyo azalaki na lolenge ya Nzambe, \q2 amonaki yango te lokola eloko ya kowelela, \q1 \v 7 kasi amikomisaki moto pamba, \q2 akomaki lokola mowumbu, \q1 amikomisaki lokola moto \q2 mpe amonanaki bongo lokola moto ; \q1 \v 8 amikitisaki penza \q2 mpe atosaki kino na kufa, \q2 ata na kufa ya ekulusu. \b \q1 \v 9 Yango wana mpe Nzambe atombolaki Ye na likolo ya nyonso \q2 mpe apesaki Ye Kombo oyo eleki bakombo nyonso, \q1 \v 10 mpo ete, na Kombo na Yesu, \q2 mabolongo nyonso efukama \q2 kati na Likolo, na mokili mpe na se ya mabele, \q1 \v 11 mpe minoko nyonso etatola ete Yesu-Klisto azali Nkolo \q2 mpo na nkembo ya Nzambe Tata. \s1 Makambo oyo mondimi asengeli kosala \p \v 12 Yango wana, balingami na ngai, ndenge bozalaki tango nyonso na botosi, bokoba kosala mpo na lobiko na bino, na kobanga mpe na kolenga : bokosalaka bongo kaka te tango nazali elongo na bino, kasi mpe sik’oyo, na kolekisa, tango nazali elongo na bino te ; \v 13 pamba te ezali Nzambe nde apesaka posa mpe makoki ya kosala makambo nyonso, ndenge ezali mabongisi na Ye ya bolingo. \p \v 14 Bosalaka likambo moko te na koyimayima mpe na tembe, \v 15 mpo ete bozanga pamela mpe bozala peto lokola bana na Nzambe oyo bazangi mbeba kati na molongo ya bato babunga nzela mpe ya mobulu. Kati na molongo yango, bozali kongenga lokola minda kati na mokili \v 16 mpo bosimbi makasi Liloba ya bomoi. Boye, na mokolo ya Klisto, bokosala lokumu na ngai, pamba te nakimaki mbangu mpe nasalaki mosala na pamba te. \v 17 Mpe ata soki makila na ngai ekoki kosopana lokola mbeka ya masanga na likolo ya mbeka oyo ezali mosala ya kondima na bino, nakozala na esengo mpo na yango mpe nakosepela elongo na bino nyonso. \v 18 Bino mpe ndenge moko, bosepela mpo na yango mpe bosepela elongo na ngai. \s1 Timote mpe Epafrodite \p \v 19 Kati na Nkolo Yesu, nazali na elikya ya kotindela bino Timote kala mingi te, mpo ete nalendisama na basango oyo akopesa ngai na tina na bino. \v 20 Pamba te nazali awa na moto mosusu te, longola kaka ye, oyo azali kokabola na ngai makanisi moko mpe azali komitungisa na ndenge ya solo mpo na bolamu na bino ; \v 21 bato nyonso oyo batikali balukaka kaka bolamu na bango moko, kasi bamipesaka te na makambo ya Yesu-Klisto. \v 22 Nzokande, bino moko boyebi ndenge nini Timote alakisaki molende na ye, pamba te asalaki elongo na ngai mosala ya kopanza Sango Malamu, ndenge mwana asalaka elongo na tata na ye. \v 23 Yango wana nazali na elikya ya kotinda ye epai na bino tango kaka nakoyeba ndenge nini makambo na ngai ekosuka. \v 24 Nandimisami solo kati na Nkolo ete nakoya kotala bino kala mingi te. \p \v 25 Kasi nakanisi ete ezali na tina mingi ya kotindela bino ndeko na ngai, Epafrodite, moninga na ngai ya mosala mpe ya etumba, ntoma oyo botindaki epai na ngai mpo na komemela ngai biloko oyo nazalaki na yango na bosenga. \v 26 Pamba te azali na posa makasi ya komona bino nyonso mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo boyokaki ete azali kobela. \v 27 Azalaki penza kobela kino akomaki pene ya kokufa, kasi Nzambe ayokelaki ye mawa, mpe ye moko kaka te kasi ngai mpe, mpo ete natonda na mawa te. \v 28 Yango wana nazali kotinda ye noki penza mpo ete, tango bokomona ye lisusu, bosepela, mpe mawa na ngai esila. \v 29 Boyamba ye na esengo makasi kati na Nkolo mpe bomemiaka bato ya lolenge wana, \v 30 pamba te akomaki pene ya kokufa mpo na mosala ya Klisto : atiaki bomoi na ye kati na likama mpo na kopesa ngai lisungi oyo bino moko bokokaki te kopesa ngai. \c 3 \s1 Kotia elikya na nzoto te \p \v 1 Mpo na kosukisa, bandeko na ngai, bosepelaka kati na Nkolo ! Ezali likambo ya pasi te mpo na ngai kokomela bino lisusu makambo oyo nakomelaki bino liboso, mpe yango ezali mpo na bolamu na bino. \v 2 Bosala keba na bambwa, na bato mabe mpe na bato oyo batindikaka bino na kokatisa ngenga ! \v 3 Biso nde tozali bato oyo bakatisa ngenga na solo, pamba te tosambelaka Nzambe na nzela ya Molimo na Ye, tomikumisaka kati na Yesu-Klisto mpe totiaka elikya na biso na nzoto te, \v 4 atako ngai mpe nakoki na ngai kotia elikya na nzoto. Soki moto moko akanisi ete akoki kotia elikya na nzoto, asengeli koyeba ete ngai nakoki kutu kotia elikya yango koleka ye ; \v 5 pamba te bakatisaki ngai ngenga na mokolo ya mwambe, nazali penza moto ya Isalaele kati na libota ya Benjame, mpe nazali Mo-Ebre oyo abotama na baboti oyo bazali mpe Ba-Ebre. Mpo na oyo etali Mibeko, nazalaki Mofarizeo ; \v 6 mpo na oyo etali molende, nanyokolaki Lingomba ; mpo na oyo etali bosembo oyo bato balukaka na nzela ya Mibeko, nazalaki moto azanga pamela. \p \v 7 Kasi makambo oyo nazalaki komona ete ezali na tina mpo na ngai, nakomi sik’oyo komona yango pamba mpo na Klisto. \v 8 Kaka yango te, nazali kutu komona makambo nyonso lokola eloko pamba likolo ya bolamu oyo eleki monene : koyeba Yesu-Klisto, Nkolo na ngai. Ezali mpo na Ye nde ngai nandimaki kobungisa makambo wana nyonso mpe nazali komona yango lokola bisanza, mpo ete nakoka kozwa Klisto \v 9 mpe bakuta ngai kati na Ye. Nakomi moto ya sembo mpo ete nandimeli Klisto : Nzambe akomisi ngai moto ya sembo na nzela ya kondima. Ezali lisusu te na nzela ya kotosa Mibeko ndenge nazalaki kokanisa kala. \v 10 Posa monene ya motema na ngai ezali : koyeba Klisto, koyeba nguya ya lisekwa na Ye, kosangana na pasi na Ye, kokokana na Ye kati na kufa na Ye \v 11 na elikya ete ngai mpe nakosekwa kati na bakufi. \p \v 12 Nalingi koloba te ete nasili kozwa biloko oyo nyonso to mpe nasili kokoma moto ya kokoka, kasi nazali nde kopota mbangu mpo na kozwa yango, pamba te Yesu-Klisto asila mpe kozwa ngai. \p \v 13 Bandeko, nazali kokanisa te ete nasili kozwa yango ; kasi nasalaka likambo moko : nabosanaka makambo nyonso oyo esili koleka, mpe namipesaka mpo na makambo oyo ezali liboso. \v 14 Boye nazali kopota mbangu kino nakoma na suka mpo na kozwa mbano oyo Nzambe abenga ngai mpo na yango wuta na Likolo kati na Yesu-Klisto. \p \v 15 Biso nyonso oyo tokola na Molimo, tosengeli kokanisa ndenge wana. Mpe soki ezali na likambo oyo na tina na yango bozali kokanisa ndenge mosusu, Nzambe akososolisa bino. \v 16 Nzokande, na esika oyo tosili kokoma, totambola nzela moko. \p \v 17 Bandeko, bino nyonso bolanda ndakisa na ngai mpe bomekola ezaleli ya bato oyo bazali kotambola lokola biso. \v 18 Pamba te ndenge nazalaki koyebisa bino yango mbala na mbala mpe, sik’oyo, nazali lisusu koyebisa bino yango na kolela, bato mingi bazali kotambola lokola banguna ya ekulusu ya Klisto. \v 19 Suka na bango ezali libebi ; pamba te nzambe na bango ezali libumu na bango, lokumu na bango ezali kati na makambo oyo eyokisaka bango soni, mpe makanisi na bango elukaka kaka biloko ya mokili. \v 20 Kasi biso, mboka na biso ezali kati na Likolo, mpe tozali kozela na posa makasi Mobikisi na biso, Nkolo Yesu-Klisto, oyo akowuta na Likolo. \v 21 Ye nde akobongola nzoto na biso ya putulu mpo na kokomisa yango nzoto ya nkembo, na nzela ya nguya na Ye ya kotia biloko nyonso na se ya bokonzi na Ye. \c 4 \p \v 1 Yango wana, bandeko mpe balingami na ngai, bino oyo nazali na posa makasi ya komona lisusu, bino oyo bozali esengo mpe motole na ngai, botikala ngwi kati na Nkolo. \b \s1 Batoli ya suka \p \v 2 Nasengi na Evodi mpe na Sentishe ete bazala na makanisi moko kati na Nkolo. \p \v 3 Solo, nasengi lisusu na yo moninga na ngai ya motema kati na mosala : sunga basi oyo, pamba te babundaki mpo na Sango Malamu, elongo na ngai, Klema mpe baninga mosusu ya mosala oyo bakombo na bango ekomama kati na buku ya bomoi. \p \v 4 Bosepelaka tango nyonso kati na Nkolo ; nazongeli yango lisusu : bosepelaka ! \v 5 Tika ete boboto na bino eyebana na bato nyonso. Nkolo akomi pene. \v 6 Bomitungisaka ata na likambo moko te ; kasi na makambo nyonso, botalisaka baposa na bino epai ya Nzambe na nzela ya losambo, ya mabondeli elongo na matondi. \v 7 Bongo kimia ya Nzambe, oyo eleki bososoli nyonso ekobatela mitema na bino mpe makanisi na bino kati na Yesu-Klisto. \p \v 8 Bandeko, mpo na kosukisa, tika ete makambo nyonso oyo ezali ya solo, kitoko, sembo, peto, makambo oyo bato bakoki kolinga, kosepela na yango, kolula mpe kokumisa ezala tina ya makanisi na bino. \v 9 Bosalela makambo nyonso oyo boyekolaki, bozwaki, boyokaki mpe bomonaki epai na ngai ; bongo Nzambe ya kimia akozala elongo na bino. \s1 Matondi ya Polo \p \v 10 Nazalaki penza na esengo mingi kati na Nkolo, wana botalisaki ngai lisusu bolingo na bino. Solo, bozalaki kokanisa kosunga ngai, kasi bozangaki nde libaku mpo na kokokisa yango. \v 11 Nalobi bongo te mpo ete nazali kokelela, pamba te nayekola kosepela na oyo nazali na yango. \v 12 Nayebi kobika na tango ya kokelela, mpe nayebi kobika na tango ya bozwi. Kati na makambo nyonso mpe na tango nyonso, nayekola kozala na esengo : ezala soki nazali na bilei to nazangi yango, ezala soki nazali na bozwi to nakeleli. \v 13 Nazali na makoki ya kosala makambo nyonso na nzela na Ye oyo apesaka ngai makasi. \v 14 Nzokande bosalaki malamu, wana bosanganaki na pasi na ngai. \p \v 15 Bino bato ya Filipi, boyebi malamu ete, na ebandeli ya mosala na ngai ya koteya Sango Malamu, wana nalongwaki na Masedwane, ata Lingomba moko te esanganaki na ngai na nzela ya lisungi, longola kaka bino. \v 16 Tango mpe nazalaki na Tesalonika, botindelaki ngai mbala mibale lisungi ya biloko oyo nazalaki na yango na bosenga. \v 17 Ezali te ete nazali koluka makabo kowuta epai na bino, kasi nazali koluka ete bambuma ya bolamu na bino efuluka lisusu koleka. \v 18 Natatoli ete nasili kozwa biloko ebele penza mpe nakomi na yango ebele koleka, awa nazwi, na maboko ya Epafrodite, makabo oyo botindelaki ngai ; yango ezali lokola malasi ya solo kitoko, mbeka oyo Nzambe andimi mpe oyo ezali kosepelisa Ye. \v 19 Mpe Nzambe na ngai akokokisa baposa na bino kolanda bomengo ya nkembo na Ye kati na Yesu-Klisto. \p \v 20 Tika ete nkembo ezonga mpo na libela na libela epai na Nzambe oyo azali Tata na biso ! Amen. \b \s1 Bambote suka \p \v 21 Bopesa mbote epai ya basantu nyonso kati na Yesu-Klisto. \p Bandeko oyo bazali awa elongo na ngai batindeli bino mbote. \p \v 22 Basantu nyonso batindeli bino mbote, mingi-mingi ba-oyo bazali ya ndako ya mokonzi Sezare. \b \b \p \v 23 Tika ete ngolu ya Nkolo Yesu-Klisto ezala elongo na molimo na bino !