\id NUM Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Mitango \toc1 Mitango \toc2 Mitango \toc3 Mit \mt1 Mitango \c 1 \ms1 Bana ya Isalaele kati na esobe ya Sinai \s1 Moyize mpe Aron batangi motango ya bana ya Isalaele \p \v 1 Kati na esobe ya Sinai, Yawe asololaki na Moyize kati na Ndako ya kapo ya Bokutani ; ezalaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mibale, na mobu ya mibale, sima na bango kobima na mokili ya Ejipito. Alobaki na ye : \v 2 « Tanga motango ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango mpe bituka na bango ; mpe koma bakombo ya mibali nyonso, moto moko na moko. \v 3 Yo mpe Aron, bokotanga motango ya mibali oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ba-oyo nyonso bazali na makoki ya kosala mosala ya soda kati na Isalaele ; bokotanga bango kolanda milongo na bango ya mampinga. \p \v 4 Kati na libota moko na moko, ekozala na mobali moko mpo na kosunga bino : asengeli kozala mokambi ya etuka na ye. \b \li4 \v 5 Tala bakombo ya mibali oyo bakosunga bino : \b \li1 mpo na libota ya Ribeni : Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri ; \li1 \v 6 mpo na libota ya Simeoni : Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi ; \li1 \v 7 mpo na libota ya Yuda : Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi ; \li1 \v 8 mpo na libota ya Isakari : Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari ; \li1 \v 9 mpo na libota ya Zabuloni : Eliabi, mwana mobali ya Eloni ; \li1 \v 10 mpo na bana mibali ya Jozefi : \li2 mpo na libota ya Efrayimi : Elishama, mwana mobali ya Amiwudi ; \li2 mpo na libota ya Manase : Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri ; \li1 \v 11 mpo na libota ya Benjame : Abidani, mwana mobali ya Gideoni ; \li1 \v 12 mpo na libota ya Dani : Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi ; \li1 \v 13 mpo na libota ya Aseri : Pagieli, mwana mobali ya Okirani ; \li1 \v 14 mpo na libota ya Gadi : Eliazafi, mwana mobali ya Deweli ; \li1 \v 15 mpo na libota ya Nefitali : Akira, mwana mobali ya Enani. » \b \li4 \v 16 Ezali bango nde baponamaki kati na lisanga : bazalaki bakambi ya mabota na bango, bakambi ya mampinga ya Isalaele. \b \p \v 17 Moyize mpe Aron bakamataki bato oyo baponamaki na bakombo mpo ete basala na bango elongo. \v 18 Basangisaki lisanga mobimba na mokolo ya liboso, na sanza ya mibale ; boye bana ya Isalaele batalisaki bokoko na bango kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Bakomaki bakombo ya mibali nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mobali moko na moko na kombo na ye, \v 19 ndenge Yawe atindaki Moyize oyo atangaki motango na bango na esobe ya Sinai. \b \li1 \v 20 Mpo na bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : \li2 bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. \v 21 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Ribeni ezalaki nkoto tuku minei na motoba na nkama mitano. \b \li1 \v 22 Mpo na bakitani ya Simeoni : \li2 bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. \v 23 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Simeoni ezalaki nkoto tuku mitano na libwa na nkama misato. \b \li1 \v 24 Mpo na bakitani ya Gadi : \li2 bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. \v 25 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Gadi ezalaki nkoto tuku minei na mitano na nkama motoba. \b \li1 \v 26 Mpo na bakitani ya Yuda : \li2 bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. \v 27 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Yuda ezalaki nkoto tuku sambo na minei na nkama motoba. \b \li1 \v 28 Mpo na bakitani ya Isakari : \li2 bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. \v 29 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Isakari ezalaki nkoto tuku mitano na minei na nkama minei. \b \li1 \v 30 Mpo na bakitani ya Zabuloni : \li2 bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. \v 31 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Zabuloni ezalaki nkoto tuku mitano na sambo na nkama minei. \b \li4 \v 32 Mpo na bana mibali ya Jozefi : \li1 Mpo na bakitani ya Efrayimi : \li2 bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. \v 33 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Efrayimi ezalaki nkoto tuku minei na nkama mitano. \li1 \v 34 Mpo na bakitani ya Manase : \li2 bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. \v 35 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Manase ezalaki nkoto tuku misato na mibale na nkama mibale. \b \li1 \v 36 Mpo na bakitani ya Benjame : \li2 bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. \v 37 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Benjame ezalaki nkoto tuku misato na mitano na nkama minei. \b \li1 \v 38 Mpo na bakitani ya Dani : \li2 bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. \v 39 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Dani ezalaki nkoto tuku motoba na mibale na nkama sambo. \b \li1 \v 40 Mpo na bakitani ya Aseri : \li2 bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. \v 41 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Aseri ezalaki nkoto tuku minei na moko na nkama mitano. \b \li1 \v 42 Mpo na bakitani ya Nefitali : \li2 bakomaki bakombo ya bato nyonso oyo bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, moto na moto kolanda libota na ye mpe etuka na ye. \v 43 Motango na bango nyonso oyo batangamaki kati na libota ya Nefitali ezalaki nkoto tuku mitano na misato na nkama minei. \b \li4 \v 44 Bango nde bato oyo Moyize mpe Aron elongo na bakambi zomi na mibale ya Isalaele, oyo moko na moko azalaki kotalisa libota na ye, batangaki. \v 45 Bongo bato nyonso ya Isalaele oyo batangamaki kolanda mabota na bango mpo ete bazalaki na mibu tuku mibale mpe koleka, mpe bazalaki na makoki ya kosala mosala ya soda, \v 46 bazalaki bango nyonso nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano. \b \p \v 47 Nzokande batangaki te nzela moko na mabota mosusu motango ya bato ya libota ya Levi. \s1 Yawe abongisi mosala mpo na libota ya Levi \p \v 48 Yawe alobaki na Moyize : \v 49 « Kotanga te motango ya bato ya libota ya Levi, kokotisa bango te na molongo ya bato mosusu ya Isalaele. \v 50 Okopesa na bato ya libota ya Levi mokumba ya Mongombo ya Litatoli mpe ya bisalelo na yango nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezalaka kati na Mongombo. Bango bakozwa mokumba ya komemaka yango elongo na bisalelo na yango mpe bakovanda zingazinga na yango. \v 51 Tango nyonso Mongombo ekolongwa na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, Balevi nde bakolongola yango ; mpe tango ekotelema, bango mpe kaka nde bakotelemisa yango. Moto mosusu oyo akopusana pembeni na yango asengeli kokufa. \v 52 Bana ya Isalaele bakotelemisa bandako na bango ya kapo kolanda milongo na bango ya mampinga, mpe moto na moto akozala kati na molako na ye, na se ya bendele na ye. \v 53 Kasi bato ya libota ya Levi bakotelemisa bandako na bango ya kapo zingazinga ya Mongombo ya Litatoli mpo ete kanda makasi ya Yawe ekoka kokweya likolo ya lisanga ya bana ya Isalaele te. Bato ya libota ya Levi nde bakosala mosala ya kobatela Mongombo ya Litatoli. » \p \v 54 Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo nyonso, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize. \c 2 \s1 Bana ya Isalaele batongi milako \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : \v 2 « Bana ya Isalaele bakotelemisa bandako na bango ya kapo kolanda milongo na bango ya mampinga ; moto na moto akozala kati na molako na ye, na se ya bendele na ye, zingazinga ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwa mosika na yango. » \b \li4 \v 3 Na ngambo ya este epai wapi moyi ebimaka, \li1 milongo ya mampinga ya Yuda bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Yuda ezali Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi. \v 4 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku sambo na minei na nkama motoba. \li1 \v 5 Bato ya libota ya Isakari bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Yuda. Mokambi ya bato ya Isakari ezali Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari. \v 6 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na minei na nkama minei. \li1 \v 7 Mpe bato ya libota ya Zabuloni bakozala pembeni ya bato ya libota ya Isakari. Mokambi ya bato ya Zabuloni ezali Eliabi, mwana mobali ya Eloni. \v 8 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na sambo na nkama minei. \li4 \v 9 Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Yuda ezali bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na motoba na nkama minei kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala liboso. \b \li4 \v 10 Na ngambo ya sude, \li1 milongo ya mampinga ya Ribeni bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Ribeni ezali Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri. \v 11 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na motoba na nkama mitano. \li1 \v 12 Bato ya libota ya Simeoni bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Ribeni. Mokambi ya bato ya Simeoni ezali Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi. \v 13 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na libwa na nkama misato. \li1 \v 14 Mpe bato ya libota ya Gadi bakozala pembeni ya bato ya libota ya Simeoni. Mokambi ya bato ya Gadi ezali Eliazafi, mwana mobali ya Deweli. \v 15 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na mitano na nkama motoba na tuku mitano. \li4 \v 16 Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Ribeni ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na moko na nkama minei na tuku mitano kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na sima. \b \li1 \v 17 Bongo Ndako ya kapo ya Bokutani mpe molako ya Balevi ekozala na kati-kati ya milako. Bakokende na molongo ndenge batielaki milako na bango, moko na moko na esika na ye mpe na se ya bendele na ye. \b \li4 \v 18 Na ngambo ya weste, \li1 milongo ya mampinga ya Efrayimi bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Efrayimi ezali Elishama, mwana mobali ya Amiwudi. \v 19 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na nkama mitano. \li1 \v 20 Bato ya libota ya Manase bakotia molako na bango pembeni ya bato ya Efrayimi. Mokambi ya bato ya Manase ezali Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri. \v 21 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mibale. \li1 \v 22 Mpe bato ya libota ya Benjame bakozala pembeni ya bato ya libota ya Manase. Mokambi ya bato ya libota ya Benjame ezali Abidani, mwana mobali ya Gideoni. \v 23 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku misato na mitano na nkama minei. \li4 \v 24 Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Efrayimi ezali bato nkoto nkama moko na mwambe na nkama moko, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakolanda na molongo ya misato. \b \li4 \v 25 Na ngambo ya nor, \li1 milongo ya mampinga ya Dani bakotia molako na bango na se ya bendele na bango. Mokambi ya bato ya Dani ezali Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi. \v 26 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku motoba na mibale na nkama sambo. \li1 \v 27 Bato ya libota ya Aseri bakotia molako na bango pembeni ya bato ya libota ya Dani. Mokambi ya bato ya Aseri ezali Pagieli, mwana mobali ya Okirani. \v 28 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku minei na moko na nkama mitano. \li1 \v 29 Mpe bato ya libota ya Nefitali bakozala pembeni ya bato ya libota ya Aseri. Mokambi ya bato ya Nefitali ezali Akira, mwana mobali ya Enani. \v 30 Mampinga na ye ezali na bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei. \li4 \v 31 Motango nyonso ya bato oyo bazali kati na molako ya Dani ezali bato nkoto nkama moko na tuku mitano na sambo na nkama motoba, kolanda milongo ya mampinga na bango. Bango nde bakozala na sima na bango nyonso, na se ya bendele na bango. \b \li4 \v 32 Bango nde bana ya Isalaele oyo batangamaki, kolanda mabota na bango. Motango ya bato nyonso oyo bazalaki kati na milako, kolanda milongo ya mampinga na bango, ezalaki bato nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano. \v 33 Kasi batangaki Balevi te elongo na bato mosusu ya Isalaele, ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize. \b \p \v 34 Boye, bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize. Na lolenge wana nde batiaki milako na bango na se ya babendele na bango mpe batambolaki bongo, moto na moto na libota na ye mpe na etuka na ye. \c 3 \s1 Yawe apesi na libota ya Levi misala \p \v 1 Tala bakitani ya Aron mpe ya Moyize na tango oyo Yawe asololaki na Moyize, na ngomba Sinai. \b \p \v 2 Bakombo ya bana mibali ya Aron ezalaki : Nadabi, mwana ya liboso ; Abiyu, Eleazari mpe Itamari. \p \v 3 Yango nde bakombo ya bana mibali ya Aron, oyo babulisaki na nzela ya kopakola mafuta mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe. \v 4 Nadabi mpe Abiyu bakufaki liboso ya Yawe tango bazalaki kobonza mbeka, na nzela ya moto oyo ebulisama te, liboso ya Yawe, na esobe ya Sinai. Batikalaki kozala na bana te. Boye Eleazari mpe Itamari kaka nde batikalaki kosala mosala ya bonganga-Nzambe na bokambami ya tata na bango, Aron. \p \v 5 Yawe alobaki na Moyize : \v 6 « Yeisa libota ya Levi pene ya Nganga-Nzambe Aron mpe pesa bango na maboko na ye mpo ete basunga ye. \v 7 Bakosalisa ye mpe bakosunga lisanga mobimba liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na kosala misala ya Mongombo. \v 8 Bakobatela bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bakosalisa bana ya Isalaele na nzela ya kosala mosala ya Mongombo. \v 9 Pesa Balevi na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; bango nde kati na bana ya Isalaele basengeli komipesa mobimba epai na ye. \v 10 Tia Aron mpe bana na ye ya mibali pembeni mpo ete basala mosala na bango ya Bonganga-Nzambe. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye. » \p \v 11 Yawe alobaki lisusu na Moyize : \v 12 « Nakamati Ngai moko Balevi kati na bana ya Isalaele na esika ya bana mibali nyonso ya liboso, mbuma ya liboso ya libumu ya mwasi nyonso ya Isalaele. \v 13 Pamba te, bana nyonso ya liboso bazali ya Ngai. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso ya Ejipito, natiaki pembeni bana nyonso ya liboso ya Isalaele mpo ete bazala ya Ngai, ezala bana ya bato to ya banyama. Nazali Yawe. » \s1 Moyize atangi motango ya Balevi \p \v 14 Yawe alobaki na Moyize kati na esobe ya Sinai : \v 15 « Tanga motango ya Balevi kolanda mabota na bango mpe bituka na bango. Tanga bana mibali nyonso kobanda na ye oyo azali na sanza moko ya mbotama mpe koleka. » \p \v 16 Boye, Moyize atangaki bango ndenge Yawe atindaki ye. \b \li1 \v 17 Tala bakombo ya bakitani ya Levi : \li2 Gerishoni, Keati mpe Merari. \li1 \v 18 Tala bakombo ya bakitani ya Gerishoni, kolanda etuka moko na moko : \li2 Libini mpe Shimei. \li1 \v 19 Bana mibali ya Keati, kolanda etuka moko na moko : \li2 Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli. \li1 \v 20 Bana mibali ya Merari, kolanda etuka moko na moko : \li2 Maali mpe Mushi. \b \li4 Bango nde bato ya bituka ya Balevi kolanda mabota na bango. \b \li4 \v 21 Tala bakitani oyo babimelaki na Gerishoni : etuka ya bato ya Libini mpe etuka ya Shimei. Bango nde bato ya bituka ya Gerishoni. \li1 \v 22 Motango ya mibali nyonso oyo batangamaki kobanda sanza moko ya mbotama mpe koleka ezalaki nkoto sambo na nkama mitano. \li1 \v 23 Bato ya bituka ya Gerishoni batongaki molako na bango na sima ya Mongombo, na ngambo ya weste. \li1 \v 24 Eliazafi, mwana mobali ya Laele, nde azalaki mokambi ya libota ya Gerishoni. \li1 \v 25 Na Ndako ya kapo ya Bokutani, bakitani ya Gerishoni bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo mpe ndako ya kapo, bizipelo na yango, rido ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, \v 26 barido ya lopango, rido ya ekuke ya lopango oyo ezingela Mongombo mpe etumbelo, basinga mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela na basinga wana. \b \li1 \v 27 Tala bakitani oyo babimelaki na Keati : \li2 bituka ya bato ya Amirami, ya Yitseari, ya Ebron mpe ya Uzieli. \li4 Bango nde bazalaki bato ya bituka ya Keati. \li1 \v 28 Motango ya mibali nyonso oyo bazalaki kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka ezalaki nkoto mwambe na nkama motoba. \li1 Bato ya Keati bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule. \li1 \v 29 Bato ya bituka ya Keati batongaki molako na bango pembeni ya Mongombo, na ngambo ya sude. \li1 \v 30 Elitsafani, mwana mobali ya Uzieli, nde azalaki mokambi ya bato ya bituka ya Keati. \li1 \v 31 Bazalaki na mokumba ya kobatela Sanduku, mesa, etelemiselo ya minda, bitumbelo mpe bisalelo ya Esika ya bule oyo basalelaka mosala, rido mpe biloko nyonso oyo bazalaki kosalela. \li1 \v 32 Mokambi ya bakambi ya Balevi ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron. Aponamaki mpo ete akamba bato oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule. \b \li1 \v 33 Tala bakitani oyo babimelaki na Merari : \li2 bato ya etuka ya Maali mpe bato ya etuka ya Mushi. \li4 Bango nde bazalaki bato ya bituka ya Merari. \li1 \v 34 Motango ya mibali nyonso oyo bazalaki na sanza moko ya mbotama mpe koleka, oyo batangamaki ezalaki nkoto motoba na nkama mibale. \li1 \v 35 Tsurieli, mwana mobali ya Abiyaili, nde azalaki mokambi ya bato ya bituka ya Merari. \li1 Batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya Mongombo. \li1 \v 36 Bato ya Merari bazalaki na mokumba ya kobatela biloko nyonso ya Mongombo, oyo basala na mabaya : balate na yango, makonzi na yango, makolo na yango mpe biloko nyonso ya mike oyo bazalaki kokangisela yango. \v 37 Bazalaki mpe lisusu na mokumba ya kobatela makonzi oyo ezalaki zingazinga ya lopango, bapike ya Ndako ya kapo mpe basinga na yango. \b \li1 \v 38 Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron batongaki molako na bango na ngambo ya este ya Mongombo, epai wapi moyi ebimaka, etalana na Ndako ya kapo ya Bokutani. \li1 Bazalaki na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpo na bolamu ya bana ya Isalaele. \li1 Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule, basengeli koboma ye. \b \li4 \v 39 Motango nyonso ya Balevi oyo Moyize mpe Aron batangaki kolanda mitindo ya Yawe, mpe bato ya bituka na bango, mibali nyonso kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, ezalaki bato nkoto tuku mibale na mibale. \s1 Moyize atangi motango ya bana mibali ya liboso \p \v 40 Yawe alobaki na Moyize : « Tanga motango ya bana mibali nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele, oyo bazali na sanza moko ya mbotama mpe koleka, mpe koma bakombo na bango. \v 41 Okotia Balevi pembeni mpo na Ngai, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele nyonso ya Balevi, na esika ya bana ya liboso ya bibwele nyonso ya Isalaele. Nazali Yawe. » \p \v 42 Boye, Moyize atangaki motango ya bana mibali nyonso ya liboso ya Isalaele ndenge Yawe atindaki ye. \v 43 Motango nyonso ya bana mibali ya liboso, oyo bakomaki bango bakombo, wuta na sanza moko ya mbotama mpe koleka, ezalaki nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale na tuku sambo na misato. \p \v 44 Yawe alobaki lisusu na Moyize : \v 45 « Tia Balevi pembeni, na esika ya bana nyonso ya liboso ya Isalaele, mpe bibwele ya Balevi, na esika ya bibwele ya bana ya Isalaele. Balevi bazali ya Ngai. Nazali Yawe. \v 46 Mpo na kosikola bana ya liboso ya Isalaele nkama mibale na tuku sambo na misato oyo baleki na motango ya Balevi, \v 47 okokongola mbongo ya bibende, nkama mitano, kolanda ndenge batangaka mbongo kati na Esika ya bule, mpo na moto moko na moko. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale. \v 48 Okopesa mbongo oyo osikoleli bana mibali nyonso, oyo baleki na motango ya Balevi, epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali. » \p \v 49 Boye Moyize akongolaki mbongo ya lisiko epai ya bato oyo balekaki na motango ya bana liboso oyo Balevi oyo basikolaki. \v 50 Azwaki na maboko ya bana liboso ya Isalaele mbongo ya bibende nkoto moko na nkama misato na tuku motoba na mitano kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule. \v 51 Bongo Moyize apesaki mbongo yango ya lisiko epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali, ndenge kaka Yawe atindaki ye. \c 4 \ms1 Misala ya bituka ya Balevi \s1 Bato ya Keati \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : \v 2 « Kati na bana mibali ya Levi, tanga motango ya bakitani ya Keati kolanda bituka mpe mabota na bango. \v 3 Tanga motango ya mibali nyonso oyo bazali na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, mpo ete baya kosala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. \p \v 4 Tala mosala ya bato ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani : kobatela biloko oyo eleki bule. \v 5 Tango bakolongola molako, Aron elongo na bana na ye ya mibali bakokota na kati, bakokitisa rido mpe bakozipa na yango Sanduku ya Litatoli. \v 6 Na likolo na yango, bakotia bulangeti oyo esalema na poso ya nyama ya ebale, bakofinika liputa ya langi ya ble mpe bakotia mabaya ya komemela Sanduku ya Litatoli. \v 7 Na likolo ya mesa ya bagato ya bule, bakotanda lisusu liputa ya langi ya ble mpe bakotia na likolo na yango biloko oyo : basani ya mbele, bambeki, bakopo, milangi mpo na makabo ya masanga mpe bagato oyo bakobanda kobonza lokola makabo liboso na Ngai tango nyonso. \v 8 Bongo na likolo ya biloko yango, bakotanda liputa ya langi ya motane makasi, mpe bakozipa biloko wana nyonso na liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale. Mpe bakotia balate oyo ekosunga mpo na kotombola mpe komema mesa. \v 9 Bakokamata liputa ya langi ya ble mpe bakofinika na yango etelemiselo ya minda elongo na minda na yango, biloko oyo balongolelaka makala na moto, basani mpo na putulu ya moto mpe basani ya mafuta, oyo basalelaka mosala na mesa. \v 10 Bakosangisa na liboke moko, ezala elamba yango ya langi ya ble mpe biloko na yango nyonso, kati na liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale, mpe bakotia yango na likolo ya tsipoyi. \v 11 Bakotanda liputa ya langi ya ble na likolo ya etumbelo ya wolo mpe bakofinika bulangeti basala na poso ya nyama ya ebale ; bongo bakotia balate na yango oyo ekosunga mpo na komema. \v 12 Bakozwa biloko nyonso oyo basalaka na yango kati na Esika ya bule, bakotia yango kati na liputa ya langi ya ble, bakofinika yango bulangeti basala na poso ya nyama ya ebale ; bongo bakotia yango na tsipoyi. \v 13 Sima na bango kolongola putulu ya moto wuta na etumbelo, bakotanda liputa ya langi ya motane na likolo na yango ; \v 14 bongo bakotia na likolo na yango biloko nyonso oyo basalaka na yango na etumbelo : basani oyo batumbaka na yango ansa, bakanya, bapawu, basani ya minene mpe biloko nyonso oyo basalaka na yango na etumbelo ; bongo bakotanda na likolo ya biloko oyo nyonso, liputa ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale, mpe bakotia balate ya etumbelo oyo ekosunga mpo na komema. \p \v 15 Soki balingi kolongola molako mpo na kokende na esika mosusu, bana mibali ya Keati bakoya komema soki kaka Aron mpe bana na ye ya mibali basilisi kofinika Esika ya bule mpe bisalelo na yango nyonso ; kasi basengeli te kosimba Esika ya bule, noki te bakokufa. Yango wana nde misala ya bana mibali ya Keati kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. \p \v 16 Tala misala ya Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron : kolandela mafuta ya etelemiselo ya minda, ansa ya kozikisa, makabo ya mokolo na mokolo mpe mafuta ya epakolami ; kokengela Mongombo mpe biloko na yango nyonso, ezala Esika ya bule to biloko na yango nyonso. » \p \v 17 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : \v 18 « Bolongola te kati na Balevi lisanga ya mabota ya bato ya Keati. \v 19 Tala makambo oyo bosengeli kosala mpo na bango mpo ete bakufa te tango bakopusana pene ya biloko oyo eleki bule : yo, Aron mpe bana na ye ya mibali, bokokota mpe bopesa na moko na moko kati na bango mosala oyo asengeli kosala to eloko oyo asengeli komema. \v 20 Basengeli te kokota bango moko mpo na kotala Esika ya bule, ata mpo na tango moke ; soki te bakokufa. » \s1 Bato ya Gerishoni \p \v 21 Yawe alobaki na Moyize : \v 22 « Tanga motango ya bato ya Gerishoni kolanda bituka mpe mabota na bango. \v 23 Okotanga mibali nyonso oyo bazali na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino na tuku mitano, ba-oyo bakoki kosala mosala songolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. \p \v 24 Tala misala mpe mokumba ya bituka ya bana mibali ya Gerishoni : \v 25 bakobanda komema batapi ya Mongombo mpe Ndako ya kapo ya Bokutani elongo na elamba na yango, elamba ya makasi basala na poso ya nyama ya ebale mpo na kozipa na likolo, rido ya ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, \v 26 batapi ya lopango, rido ya ekuke ya lopango, oyo ezingeli Mongombo mpe etumbelo, basinga na yango mpe bisalelo na yango nyonso. Bakosala mosala oyo etali biloko oyo. \v 27 Mosala nyonso ya bato ya Gerishoni ekokambama na Aron mpe bana na ye ya mibali : ezala mpo na komema biloko to mpo na kosala mosala ; bokoyebisa bango mosala nyonso oyo bango basengeli kosala. \v 28 Wana nde misala ya bituka ya bato ya Gerishoni kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, nde akokamba misala na bango. \s1 Bato ya Merari \p \v 29 Okotanga motango ya bato ya Merari, etuka moko na moko mpe libota moko na moko ; \v 30 okotanga mibali nyonso oyo bazali na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bakoki kosala mosala songolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. \p \v 31 Tala biteni ya Ndako ya kapo ya Bokutani, oyo bakobanda komema : mabaya ya Mongombo, balate na yango, makonzi mpe makolo na yango, \v 32 makonzi oyo ezingeli lopango, makolo na yango, bapike na yango, basinga na yango, bisalelo na yango nyonso mpe biloko nyonso oyo esungaka mpo na kokangisa yango. Bokobenga moto moko na moko na kombo mpe bokopesa ye biloko oyo akobanda komema. \v 33 Wana nde misala ya bituka ya bato ya Merari. Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, nde akokamba misala na bango nyonso kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. » \s1 Motango ya Balevi oyo bazali kosala \li1 \v 34 Moyize, Aron mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele batangaki motango ya bato ya Keati, kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko. \li2 \v 35 Mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, \v 36 batangamaki kolanda etuka moko na moko : motango na bango ezalaki nkoto mibale na nkama sambo na tuku mitano. \v 37 Wana nde motango ya bato nyonso oyo batangamaki kati na bituka ya bato ya Keati, ba-oyo bazalaki kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Moyize mpe Aron batangaki motango yango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize. \b \li1 \v 38 Batangaki motango ya bato ya Gerishoni kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko : \li2 \v 39 mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, \v 40 batangamaki kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko ; motango na bango ezalaki nkoto mibale na nkama motoba na tuku misato. \v 41 Wana nde motango ya bato ya Gerishoni oyo batangamaki mpe bazalaki kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Moyize mpe Aron batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize. \b \li1 \v 42 Batangaki motango ya bato ya Merari kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko : \li2 \v 43 mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, \v 44 batangamaki kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko ; motango na bango ezalaki nkoto misato na nkama mibale. \v 45 Wana nde motango ya bato oyo batangamaki kati na bituka ya bato ya Merari. Moyize mpe Aron batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize. \b \li4 \v 46 Moyize, Aron mpe bakambi ya Isalaele batangaki motango ya Balevi nyonso, kolanda etuka moko na moko mpe libota moko na moko : \v 47 mibali nyonso oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda tuku misato kino tuku mitano, ba-oyo bazalaki na makoki ya kosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, \v 48 batangamaki ; motango na bango ezalaki nkoto mwambe na nkama mitano na tuku mwambe. \v 49 Moyize apesaki na Molevi moko na moko mosala mpe mokumba, kolanda mitindo ya Yawe. \b \p Batangaki bango kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize. \c 5 \s1 Bato ya mbindo basengeli kozala libanda ya molako \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Pesa mitindo epai na bana ya Isalaele ete babimisa libanda ya molako moto nyonso oyo azali na bokono ya poso ya nzoto, moto nyonso oyo atangaka makila, mpe moto nyonso oyo akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe. \v 3 Azala mobali to mwasi, bobengana ye, bobimisa ye libanda ya molako mpo ete bakomisa molako na bango mbindo te, pamba te Ngai nazali kowumela elongo na bango. » \p \v 4 Bana ya Isalaele basalaki bongo ; babimisaki bango libanda ya molako. Basalaki ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize. \s1 Ndenge nini kozongisa boyokani kati na bandeko \p \v 5 Yawe alobaki na Moyize : \v 6 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto, azala mobali to mwasi, atamboli na boyengebene te liboso ya Yawe wana asali moninga na ye mabe, azali na ngambo. \v 7 Boye asengeli koyambola lisumu oyo asalaki. Asengeli kozongisa epai ya moto oyo ye asali mabe : nyonso oyo azwaki mpe akobakisa likolo na yango, ndambo moko kati na mitano. \v 8 Kasi soki moto yango azali na ndeko te oyo akoki kozwa eloko oyo bakozongisa mpo na mabe oyo basalaki ye, bakopesa eloko oyo basengelaki kozongisela ye epai na Yawe na nzela ya Nganga-Nzambe, bakisa meme moko ya mobali oyo Nganga-Nzambe akosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na moto oyo asalaki mabe. \v 9 Biloko nyonso kati na makabo ya bule oyo bana ya Isalaele bakomema epai ya Nzambe ekozala ya Nganga-Nzambe. \v 10 Biloko oyo moto nyonso akotia pembeni mpo na Yawe ekopesama epai ya Nganga-Nzambe ; kasi eloko nyonso oyo moto akokabela Nganga-Nzambe ekokoma ya Nganga-Nzambe. › » \s1 Mobeko na tina na zuwa \p \v 11 Bongo Yawe alobaki na Moyize : \v 12 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Soki mwasi akosi mobali na ye, wana abimi na mobali mosusu \v 13 mpe asangisi na ye nzoto, amikomisi mbindo atako esalemi na nkuku mpe moto moko te amoni ye ; mpe ezala mobali na ye ayebi eloko te. \v 14 Soki mobali asali zuwa mpe akomi kokanisa ete mwasi na ye akomi mbindo, azala mbindo to mbindo te, \v 15 mobali asengeli komema mwasi na ye epai ya Nganga-Nzambe mpe kopesa mpo na ye likabo ya bakilo misato ya farine ya orje ; akosopela yango mafuta te mpe akotia yango ansa te, pamba te ezali likabo oyo epesami mpo na zuwa, likabo mpo na kokanisa mbeba. \v 16 Nganga-Nzambe akobenga mwasi mpe akomema ye liboso ya Yawe. \v 17 Nganga-Nzambe akotoka mayi ya bule, na mbeki basala na mabele batumba mpe akozwa putulu ya mabele ya Mongombo mpo na kotia yango kati na mayi yango. \v 18 Nganga-Nzambe akotia mwasi ya kotelema liboso ya Yawe, akofungola ye suki mpe akotia na maboko na ye likabo ya zuwa, wana ye moko Nganga-Nzambe akobatela na maboko na ye mayi ya bololo oyo ememaka elakeli mabe. \v 19 Nganga-Nzambe akolapisa mwasi yango ndayi, akoloba na ye : \p ‘ Soki mobali mosusu asangisaki na yo nzoto te, mpe soki omikomisaki mbindo te na kokosa mobali na yo wuta bobalana, wana tika ete mayi oyo ya bololo mpe ememaka elakeli mabe esala yo eloko moko te ! \v 20 Kasi soki, wana ozali ya kobala, okosaki mobali na yo mpe omikomisaki mbindo na kosangisa nzoto na mobali mosusu, ’ \v 21 Nganga-Nzambe asengeli awa kolapisa mwasi yango ndayi ya kondima kokweyela bilakeli mabe kowuta na maloba oyo : ‘ tika ete Yawe akomisa yo elakeli mabe mpe eloko ya nkele kati na bato na yo ! Tika ete akomisa yo ekomba mpe avimbisa yo libumu ! \v 22 Tika ete mayi oyo ezali komema elakeli mabe ekota kati na yo mpo ete libumu na yo evimba mpe okoma ekomba. ’ \p Mwasi akozongisa : \pi1 ‘ Amen ! Tika ete esalema bongo ! ’ \p \v 23 Nganga-Nzambe akokoma maloba yango ya bilakeli mabe kati na buku mpe akokotisa yango kati na mayi ya bololo mpo na kolongola makomi yango. \v 24 Bongo akomelisa mwasi mayi oyo ya bololo, oyo ezali komema elakeli mabe mpo ete ekokota kati na ye. \v 25 Nganga-Nzambe akozwa wuta na maboko ya mwasi likabo ya zuwa, akotombola yango liboso ya Yawe mpe akomema yango na etumbelo. \v 26 Nganga-Nzambe akotondisa na loboko na ye, bambuma oyo akozwa kati na likabo yango ya zuwa lokola ekaniseli, mpe akotumba yango na likolo ya etumbelo ; sima na yango, akomelisa mwasi mayi. \v 27 Soki penza amikomisaki mbindo na kosangisa nzoto na mobali mosusu, mayi oyo ememaka elakeli mabe ekokota kati na ye, ekovimbisa libumu na ye, akokoma ekomba mpe akolakelama mabe kati na bato na ye. \v 28 Kasi soki mwasi amikomisaki mbindo te, soki azali penza peto, akomona pasi ata moko te mpe akoki kobota bana. \p \v 29 Wana nde ezali mobeko na tina na zuwa ; ekokanga mwasi ya libala oyo akosi mobali na ye mpe amikomisi mbindo. \v 30 Bakosalela yango mpe soki mobali asali zuwa mpe akanisi penza ete mwasi na ye abimi na mobali mosusu : mobali akomema mwasi mpe akotelemisa ye liboso ya Yawe ; bongo Nganga-Nzambe akosalela mobeko oyo na mobimba na yango epai ya mwasi. \v 31 Mobali akomema ngambo ata moke te kasi mwasi akozwa etumbu ya lisumu na ye. › » \c 6 \s1 Mobeko mpo na kobulisa moto epai na Yawe \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Yebisa bana ya Isalaele : Mobali to mwasi oyo amibulisi mpo na Yawe na nzela ya ndayi ya libulisi \v 3 asengeli komipekisa komela vino, masanga oyo elangwisaka, masanga ya ngayi oyo basala na vino mpe masanga ya ngayi oyo basala na masanga mosusu oyo elangwisaka ; asengeli te komela masanga oyo basala na bambuma ya vino ya mayi to ya kokawuka. \v 4 Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, asengeli te kolia eloko nyonso oyo basala na bambuma ya vino, kobanda na mokokoli kino na poso. \v 5 Na mikolo nyonso ya ndayi ya libulisi na ye, jileti esengeli te kotutana na moto na ye to basengeli te kokata suki ya moto na ye, kino tango ya libulisi na ye mpo na Yawe ekosila ; akozala bule mpe akotika suki ya moto na ye mpe mandefu na ye kokola. \v 6 Na mikolo nyonso ya libulisi na ye mpo na Yawe, asengeli te kosimba ebembe ; \v 7 ezala mpo na kufa ya tata na ye, ya mama na ye, ya ndeko na ye ya mobali to ya ndeko na ye ya mwasi, asengeli te komikomisa mbindo ; pamba te na moto na ye, azali na elembo ya libulisi mpo na Nzambe. \v 8 Na mikolo nyonso ya libulisi na ye, akozala bule mpo na Yawe. \p \v 9 Soki moto akufi na mbalakata pene na ye, moto na ye oyo epesama mpo na libulisi ekokoma mbindo. Bongo asengeli kokatisa suki na ye ya moto mpe mandefu na ye na mokolo ya sambo, mokolo na ye ya kopetolama. \v 10 Na mokolo ya mwambe, asengeli komema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani : bibenga mibale ya zamba mpe bana mibale ya ebenga ya mboka. \v 11 Nganga-Nzambe akobonza moko lokola mbeka mpo na masumu mpe mosusu, lokola mbeka ya kotumba ; akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye lokola asimbaki ebembe. Kaka na mokolo yango, akobulisa lisusu moto na ye epai na Yawe. \v 12 Akokaba lisusu epai na Yawe libulisi na ye mpe akobonza lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mwana meme ya mobu moko ; pamba te mikolo na ye ya liboso, oyo esilaki koleka, ekotangama lisusu te mpo ete akomaki mbindo. \p \v 13 Tala mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe : ‹ soki mikolo ya libulisi na ye ekoki, basengeli komema ye na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani \v 14 epai wapi akobonza lokola mbeka mpo na Yawe : mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba ; meme ya mwasi ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu ; mpe meme ya mobali mpe ezanga mbeba lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; \v 15 kitunga ya mapa ezanga levire mpe basala na farine basangisa na mafuta ; bagalete ezanga levire mpe bapakola mafuta elongo na mbeka ya masanga mpe makabo mosusu. \v 16 Nganga-Nzambe akomema makabo wana nyonso liboso ya Yawe ; akobonza mbeka na ye mpo na masumu mpe mbeka na ye ya kotumba ; \v 17 akobonza lisusu epai na Yawe meme ya mobali lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, elongo na kitunga ya mapa ezanga levire. Nganga-Nzambe akobakisa na likolo na yango mbeka na ye ya masanga mpe makabo na ye mosusu. \v 18 Bongo moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe akokata, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, suki ya moto na ye mpe ya mandefu na ye ; akolokota yango mpe akobwaka yango na moto oyo ezali kopela na se ya mbeka mpo na kozongisa boyokani. \v 19 Nganga-Nzambe akozwa lipeka ya mbeka ya meme ya mobali tango esili kozika ; akozwa lisusu, kati na kitunga, lipa moko ezanga levire mpe galeti moko ezanga levire, akotia yango na maboko ya moto oyo amipesa na libulisi mpo na Yawe sima na ye kokata suki ya moto na ye mpe mandefu na ye. \v 20 Nganga-Nzambe akobulisa mpe akotombola yango mpo na kopesa yango epai na Yawe, pamba te ezali biloko ya bule mpe ya Nganga-Nzambe, ndenge moko na tolo mpe mopende. \p \v 21 Wana nde ezali mobeko mpo na moto oyo amibulisi mpo na Yawe, na nzela ya ndayi, elongo na makabo oyo asengeli kobonza epai na Yawe mpo na libulisi na ye. Mpe soki azali na makoki, akoki na ye kopesa makabo mosusu wuta na motema na ye moko. Akokokisa biloko nyonso kolanda ndayi oyo asilaki kolapa mpe mobeko ya libulisi na ye. › » \s1 Banganga-Nzambe basengeli kopambola bato \p \v 22 Yawe alobaki na Moyize : \v 23 « Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali : ‹ Tala ndenge nini bokobanda kopambola bana ya Isalaele, bokoloba : \q1 \v 24 ‘ Tika ete Yawe apambola yo \q2 mpe abatela yo ! \q1 \v 25 Tika ete Yawe angengisela yo elongi na Ye \q2 mpe apesa yo ngolu na Ye ! \q1 \v 26 Tika ete Yawe amona yo \q2 mpe apesa yo kimia ! ’ › \p \v 27 Ezali ndenge wana nde bakobanda kobelela Kombo na Ngai mpo na bolamu ya bana ya Isalaele, mpe Ngai nakopambola bango. » \c 7 \ms1 Misala ya kotonga Mongombo mpe etumbelo esili \s1 Makabo mpo na libulisi ya Mongombo \p \v 1 Na mokolo oyo Moyize asilisaki kotonga Mongombo, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango elongo na bisalelo na yango. Asalaki mpe bongo mpo na etumbelo elongo na bisalelo na yango, asopelaki yango mafuta mpo na kobulisa yango. \v 2 Bongo bakambi ya Isalaele, bakonzi ya mabota, elingi koloba bakonzi ya bikolo oyo bakambaki mosala ya kotanga motango ya bato, \v 3 bamemaki makabo na bango liboso ya Yawe : bashario motoba mpe bangombe zomi na mibale. Shario moko mpo na bakambi mibale, mpe ngombe moko mpo na mokonzi moko na moko ; bamemaki yango liboso ya Mongombo. \p \v 4 Yawe alobaki na Moyize : \v 5 « Ndima kozwa makabo oyo bayei na yango ; okosala na yango mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Okopesa yango epai ya Balevi kolanda mokumba ya moko na moko. » \p \v 6 Moyize andimaki kozwa bashar mpe bangombe mpe apesaki yango epai ya Balevi. \v 7 Apesaki bashar mibale mpe bangombe minei epai ya bana mibali ya Gerishoni kolanda bosenga ya mosala na bango. \v 8 Apesaki bashar minei mpe bangombe mwambe epai ya bana mibali ya Merari kolanda bosenga ya mosala na bango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron. \v 9 Apesaki eloko te epai ya bana mibali ya Keati, pamba te bazalaki na mokumba ya komema na mapeka na bango biloko ya bule. \s1 Makabo mpo na libulisi ya etumbelo \p \v 10 Bakambi bamemaki makabo na bango mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta ; bamemaki makabo yango liboso ya etumbelo. \v 11 Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Tika ete mokolo na mokolo, mokambi moko na moko amema likabo na ye mpo na libulisi ya etumbelo ! » \b \li4 \v 12 Na mokolo ya liboso, Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, moto ya libota ya Yuda, amemaki likabo na ye. \li1 \v 13 Likabo na ye ezalaki : \li2 etando ya palata ya kilo moko na ndambo, mbeki moko ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale ezalaki ya kotonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo ; \li2 \v 14 mpe mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa, \li2 \v 15 ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, \li2 \v 16 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; \li2 \v 17 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. \li4 Yango nde ezalaki makabo ya Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi. \b \li4 \v 18 Na mokolo ya mibale, Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, mokambi ya libota ya Isakari, \li1 \v 19 amemaki makabo oyo : \li2 etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, \li2 \v 20 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. \li1 \v 21 Amemaki lisusu : \li2 mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, \li2 \v 22 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; \li2 \v 23 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. \li4 Yango nde ezalaki makabo ya Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari. \b \li4 \v 24 Na mokolo ya misato, Eliabi, mwana mobali ya Eloni, mokambi ya libota ya Zabuloni, \li1 \v 25 amemaki makabo oyo : \li2 etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, \li2 \v 26 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. \li2 \v 27 Amemaki lisusu : \li2 mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, \li2 \v 28 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; \li2 \v 29 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. \li4 Yango nde ezalaki makabo ya Eliabi, mwana mobali ya Eloni. \b \li4 \v 30 Na mokolo ya minei, Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, mokambi ya libota ya Ribeni, \li1 \v 31 amemaki makabo oyo : \li2 etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, \li2 \v 32 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. \li2 \v 33 Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, \li2 \v 34 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; \li2 \v 35 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. \li4 Yango nde ezalaki makabo ya Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri. \b \li4 \v 36 Na mokolo ya mitano, Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, mokambi ya libota ya Simeoni, \li1 \v 37 amemaki makabo oyo : \li2 etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, \li2 \v 38 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. \li2 \v 39 Amemaki lisusu : \li2 mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, \li2 \v 40 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; \li2 \v 41 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani : \li2 bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. \li4 Wana nde ezalaki makabo ya Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi. \b \li4 \v 42 Na mokolo ya motoba, Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, mokambi ya libota ya Gadi, \li1 \v 43 amemaki makabo oyo : \li2 etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, \li2 \v 44 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. \li2 \v 45 Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, \li2 \v 46 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; \li2 \v 47 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. \li4 Yango nde ezalaki makabo ya Eliazafi, mwana mobali ya Deweli. \b \li4 \v 48 Na mokolo ya sambo, Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, mokambi ya libota ya Efrayimi, \li1 \v 49 amemaki makabo oyo : \li2 etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, \li2 \v 50 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. \li2 \v 51 Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, \li2 \v 52 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; \li2 \v 53 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. \li4 Yango nde ezalaki makabo ya Elishama, mwana mobali ya Amiwudi. \b \li4 \v 54 Na mokolo ya mwambe, Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, mokambi ya libota ya Manase, \li1 \v 55 amemaki makabo oyo : \li2 etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, \li2 \v 56 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. \li2 \v 57 Amemaki lisusu : \li2 mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, \li2 \v 58 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; \li2 \v 59 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. \li4 Yango nde ezalaki makabo ya Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri. \b \li4 \v 60 Na mokolo ya libwa, Abidani, mwana mobali ya Gideoni, mokambi ya libota ya Benjame, \li1 \v 61 amemaki makabo oyo : \li2 etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, \li2 \v 62 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. \li2 \v 63 Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, \li2 \v 64 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; \li2 \v 65 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. \li4 Yango nde ezalaki makabo ya Abidani, mwana mobali ya Gideoni. \b \li4 \v 66 Na mokolo ya zomi, Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, mokambi ya libota ya Dani, \li1 \v 67 amemaki makabo oyo : \li2 etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, \li2 \v 68 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. \li2 \v 69 Amemaki lisusu : mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, \li2 \v 70 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; \li2 \v 71 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. \li4 Yango nde ezalaki makabo ya Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi. \b \li4 \v 72 Na mokolo ya zomi na moko, Pagieli, mwana mobali ya Okirani, mokambi ya libota ya Aseri, \li1 \v 73 amemaki makabo oyo : \li2 etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, \li2 \v 74 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. \li2 \v 75 Amemaki lisusu : \li2 mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, \li2 \v 76 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; \li2 \v 77 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. \li4 Yango nde ezalaki makabo ya Pagieli, mwana mobali ya Okirani. \b \li4 \v 78 Na mokolo ya zomi na mibale, Akira, mwana mobali ya Enani, mokambi ya libota ya Nefitali, \li1 \v 79 amemaki makabo oyo : \li2 etando ya palata ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mbeki ya palata ya bagrame nkama mwambe, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, nyonso mibale etonda na farine basangisa na mafuta mpo na makabo, \li2 \v 80 mbeki moko ya wolo ya bagrame nkama moko na zomi etonda na ansa. \li2 \v 81 Amemaki lisusu : \li2 mwana ngombe ya mobali, meme moko ya mobali, mwana meme moko ya mobu moko mpo na mbeka ya kotumba, \li2 \v 82 ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; \li2 \v 83 mpe, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, bangombe mibale ya mibali, bameme mitano ya mibali, bantaba mitano ya mibali mpe bana meme mitano ya mobu moko. \li4 Yango nde ezalaki makabo ya Akira, mwana mobali ya Enani. \b \li4 \v 84 Yango nde ezalaki makabo ya bakambi ya Isalaele mpo na libulisi ya etumbelo, na mokolo oyo basopelaki yango mafuta. \li1 Na kosangisa, bango nyonso bapesaki : \li2 bitando ya palata zomi na mibale, bambeki ya palata zomi na mibale, bambeki ya wolo zomi na mibale. \v 85 Etando moko na moko ya palata ezalaki ya kilo moko na bagrame nkama mitano, mpe mbeki moko na moko ezalaki ya bagrame nkama mwambe : palata nyonso esalaki bakilo tuku mibale na sambo na bagrame nkama mitano, kolanda ndenge bazalaki komeka bakilo na Esika ya bule. \v 86 Mbeki moko na moko ya wolo ezalaki ya bagrame nkama moko na zomi : wolo nyonso esalaki bagrame nkoto moko na nkama misato. \li2 \v 87 Mpo na bambeka ya kotumba, bango nyonso bapesaki : \li2 bangombe zomi na mibale ya mibali, bameme zomi na mibale ya mibali, bana meme zomi na mibale ya mobu moko elongo na makabo mosusu mpe bantaba zomi na mibale lokola mbeka mpo na masumu. \li2 \v 88 Na kosangisa, bango nyonso bapesaki lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani : bangombe tuku mibale na minei ya mibali, bameme tuku motoba ya mibali, bantaba tuku motoba ya mibali, bana meme tuku motoba ya mobu moko. \b \li4 Yango nde ezalaki makabo ya libulisi ya etumbelo sima na kosopela yango mafuta. \b \p \v 89 Tango Moyize azalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosolola na Yawe, azalaki koyoka mongongo koloba na ye wuta na mofinuku oyo ezalaki likolo ya Sanduku ya Litatoli kati na basheribe mibale, mpe azalaki kosolola na ye. \c 8 \s1 Ndenge nini kotia minda \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Loba na Aron mpe yebisa ye : ‹ Tango okotia minda, minda sambo esengeli kongengisa liboso ya etelemiselo ya minda. › » \p \v 3 Aron asalaki kaka bongo : atiaki minda na liboso ya etelemiselo ya minda ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize. \v 4 Tala ndenge basalaki etelemiselo ya minda : basalaki yango na wolo batuta wuta na likonzi kino na bafololo na yango ; basalaki yango ndenge kaka Yawe alakisaki Moyize. \s1 Libulisi ya Balevi \p \v 5 Yawe alobaki na Moyize : \v 6 « Kamata Balevi kati na bana ya Isalaele mpe petola bango. \v 7 Tala ndenge okosala mpo na kopetola bango : okobwakela bango mayi ya bopetoli ; bongo bakolekisa jileti na nzoto na bango mobimba mpo na komikokola suki ya nzoto mobimba mpe bakosukola bilamba na bango. Ezali na nzela wana nde bakokoma peto. \v 8 Bakokamata mwana ngombe ya mobali elongo na likabo na yango ya farine oyo basangisa na mafuta ; mpe okokamata mwana ngombe mosusu ya mobali mpo na mbeka ya masumu. \v 9 Yeisa Balevi liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe sangisa lisanga mobimba ya Isalaele. \v 10 Okopusa Balevi liboso ya Yawe mpe bana ya Isalaele bakotia bango maboko. \v 11 Sima na yango, Aron akobonza Balevi lokola likabo oyo bana ya Isalaele babonzeli Yawe mpo ete bazwa makoki ya kosala mosala ya Yawe. \v 12 Mpe na sima, Balevi bakotia maboko na bango likolo ya mito ya bangombe ya mibali. Bonza ngombe moko lokola mbeka ya masumu epai na Yawe mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Balevi. \v 13 Tika ete Balevi batelema liboso ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; bongo bonza bango lokola likabo epai na Yawe. \v 14 Ezali na nzela wana nde okotia pembeni Balevi kati na bana ya Isalaele, mpe bakozala ya Ngai. \v 15 Sima na yo kopetola Balevi mpe kobonza bango lokola likabo, bakozwa ndingisa ya kosala mosala na bango na Ndako ya kapo ya Bokutani. \p Boye, okopetola bango mpe okobonza bango lokola likabo epai na Yawe, \v 16 pamba te bango nde bazali bato oyo bapesameli Ngai kati na bana ya Isalaele. Ngai moko nde nazwaki bango na esika ya bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele. \v 17 Pamba te, bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele bazali ya Ngai, ezala bana ya liboso ya bana ya bato to ya banyama. Tango nabomaki bana nyonso ya liboso na mokili ya Ejipito, natiaki bango pembeni mpo na Ngai moko. \v 18 Mpe nazwaki Balevi na esika ya bana nyonso ya liboso ya bana ya Isalaele. \v 19 Kati na bato nyonso ya Isalaele, napesi Balevi lokola likabo epai ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali, mpo ete basala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na bolamu ya bana ya Isalaele mpe basala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, mpo ete likama moko te ekomela bana ya Isalaele tango bakopusana pene ya Esika ya bule. » \p \v 20 Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele basalaki mpo na Balevi, makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize. \v 21 Balevi bamipetolaki mpe basukolaki bilamba na bango. Aron abonzaki bango lokola likabo epai na Yawe mpe asalaki mpo na bango mosala ya bolimbisi masumu mpo na kopetola bango. \v 22 Sima na yango, Balevi bazwaki ndingisa ya kosala mosala na bango na Ndako ya kapo ya Bokutani, na se ya bokonzi ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Basalaki mpo na Balevi, makambo oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize. \s1 Tango oyo Balevi basengeli kokota na mosala \p \v 23 Yawe alobaki na Moyize : \v 24 « Tala bikateli oyo etali Balevi : mobali nyonso oyo azali na mibu ya mbotama kobanda tuku mibale na mitano mpe koleka asengeli koya kosala mosala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 25 Kasi soki akokisi mibu tuku mitano, akotika mosala oyo azalaki kosala, akosala lisusu mosala te. \v 26 Akokoma nde kosunga bandeko na ye mpo na kokokisa misala na bango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Nzokande ye moko akosala lisusu mosala te. Yango nde ekozala bikateli oyo okolanda mpo na mosala ya Balevi. » \c 9 \s1 Mokolo ya kosepela feti ya Pasika \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize kati na esobe ya Sinai, na sanza ya liboso ya mobu oyo ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito. Alobaki na ye : \v 2 « Tika ete bana ya Isalaele basepela feti ya Pasika na mokolo oyo ekatama. \v 3 Bosala feti yango na tango oyo ekatama, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza oyo, kolanda mibeko mpe malako na yango nyonso. » \p \v 4 Boye, Moyize ayebisaki bana ya Isalaele ete basepelaka feti ya Pasika. \v 5 Basepelaki Pasika kati na esobe ya Sinai, na pokwa ya mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya liboso. Bana ya Isalaele basalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize. \p \v 6 Kasi bato mosusu kati na bango basepelaki Pasika te na mokolo wana, pamba te bazalaki mbindo mpo ete basimbaki ebembe. Boye, kaka na mokolo wana, bakendeki komona Moyize na Aron \v 7 mpe bayebisaki Moyize : \pi1 — Tokomi mbindo mpo ete tosimbaki ebembe. Boye, mpo na nini te biso mpe tomema likabo na biso epai na Yawe elongo na bato mosusu ya Isalaele ? \p \v 8 Moyize azongiselaki bango : \pi1 — Bozela nanu ete naluka koyeba makambo oyo Yawe atindi na tina na bino. \p \v 9 Boye Yawe alobaki na Moyize : \pi1 \v 10 — Yebisa bana ya Isalaele : « Soki moko kati na bino to kati na bakitani na bino akomi mbindo mpo ete asimbi ebembe na mokolo wana, ezala soki azali mosika na mobembo, akoki kosepela feti ya Pasika mpo na lokumu na Yawe. \v 11 Basengeli kosepela yango na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale ; bakolia mwana meme elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo. \v 12 Bakotika eloko moko te kino na tongo mpe bakobuka mokuwa ata moko te. Basengeli kolanda mibeko na yango nyonso na tango ya kosepela feti ya Pasika. \v 13 Kasi soki moto moko asepeli feti ya Pasika te, wana azali mbindo te mpe asali mobembo te, basengeli kolongola ye kati na libota na ye, pamba te abonzeli Yawe likabo te na tango oyo ekatama ; akomema mikumba ya masumu na ye. \v 14 Soki mpe mopaya oyo avandi kati na bino alingi kosepela Pasika ya Yawe, asengeli kosala kaka bongo, asengeli kolanda mibeko mpe malako na yango. Ezala mpo na bapaya to mpo na bana mboka, bosengeli kozala na mibeko ya losambo ya ndenge moko. » \s1 Lipata na likolo ya Mongombo \p \v 15 Na mokolo oyo batelemisaki Mongombo, lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Litatoli. Wuta na pokwa kino na tongo, lipata oyo ezalaki likolo ya Mongombo ezalaki komonana lokola moto. \v 16 Mpe ekobaki kozala kaka ndenge wana : lipata ezalaki kozipa Mongombo ; bongo na butu, ezalaki komonana lokola moto. \v 17 Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo, bana ya Isalaele mpe bazalaki kokende ; mpe esika nyonso oyo lipata ezalaki kotelema, esika wana nde bazalaki mpe kosala molako na bango. \v 18 Ezalaki na mitindo na Yawe kaka nde bana ya Isalaele bazalaki kotambola mpe kosala molako na bango. Tango nyonso lipata ezalaki kowumela na likolo ya Mongombo, bango mpe bazalaki kowumela na molako. \v 19 Soki lipata ewumeli tango molayi likolo ya Mongombo, bana ya Isalaele bazalaki kotosa mitindo na Yawe mpe bazalaki kokende te. \v 20 Soki mpe lipata esali kaka mwa ndambo ya mikolo na likolo ya Mongombo, na mitindo na Yawe, bazalaki kowumela na molako na bango ; mpe bazalaki kokende soki kaka Yawe apesi mitindo. \v 21 Na mbala mosusu, lipata ezalaki kowumela butu moko kaka, wuta na pokwa kino na tongo ; bongo tango ezalaki kolongwa na tongo na esika moko mpo na kokende na esika mosusu, bango mpe bazalaki kokende. To mpe ezalaki kosala mokolo moko mpe butu moko ; mpe soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende. \v 22 Soki lipata etelemi na likolo ya Mongombo mikolo mibale to sanza moko to mpe mobu moko, bana ya Isalaele mpe bazalaki kaka kowumela na molako, bazalaki kokende te ; kasi soki elongwe, bango mpe bazalaki kokende. \v 23 Ezalaki kaka na mitindo na Yawe nde bazalaki kowumela na molako to kokende. Boye, bazalaki kosala mosala ya Yawe kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize. \c 10 \s1 Bakelelo mibale ebeti mpe lisanga esangani \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Sala bakelelo mibale na palata oyo batuta. Okosalela yango mpo na kobengisa lisanga mpe mpo na kopesa mitindo ya kolongola molako. \v 3 Soki bakelelo nyonso mibale ebeti nzela moko, lisanga mobimba ekosangana pembeni na yo, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 4 Soki kelelo moko kaka nde ebeti, kaka bakambi, bakonzi ya bituka ya Isalaele nde bakosangana liboso na yo. \v 5 Soki kelelo ebeti makasi, mabota oyo etongi molako na ngambo ya este ekokende. \v 6 Soki ebeti makasi mpo na mbala ya mibale, mabota oyo etongi molako na ngambo ya sude ekokende. Ebeteli ya kelelo nde ekozala elembo mpo na kopesa mbela ya kokende. \v 7 Mpo na kosangisa lisanga, beta bakelelo, kasi makasi te. \p \v 8 Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bango nde bakobanda kobeta bakelelo yango. Ekozala mobeko ya libela mpo na bino mpe bakitani na bino. \p \v 9 Tango, kati na mokili na bino moko, bokokende na bitumba mpo na kotelemela monguna oyo azali konyokola bino, bokobeta bakelelo na bino makasi. Boye, Yawe, Nzambe na bino, akokanisa bino mpe akokangola bino na maboko ya banguna na bino. \v 10 Mpe lisusu, na batango na bino ya kosepela, na bafeti na bino oyo ekatama mpe ya ebandeli ya sanza, bokobeta bakelelo mpo na kobonza mbeka na bino ya kotumba mpe ya boyokani. Yango ekozala ekaniseli mpo na bino na miso ya Nzambe na bino. Nazali Yawe, Nzambe na bino. » \s1 Bana ya Isalaele balongwe na Sinai \p \v 11 Na mokolo ya tuku mibale, ya sanza ya mibale, ya mobu oyo ya mibale, lipata etelemaki na likolo ya Mongombo ya Litatoli. \v 12 Boye, bana ya Isalaele balongwaki na esobe ya Sinai, basalaki mobembo mpe batambolaki bisika na bisika kino tango lipata eyaki kopema na esobe ya Parani. \v 13 Ezalaki mbala na bango ya liboso ya kolongwa na molako mpe kotambola kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize. \v 14 Mampinga ya molako ya Yuda ezalaki kotambola liboso, elongo na bendele na bango. Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi, nde azalaki mokonzi na bango. \v 15 Netaneeli, mwana mobali ya Tsuwari, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Isakari. \v 16 Eliabi, mwana mobali ya Eloni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Zabuloni. \p \v 17 Bongo bakabolaki Mongombo na biteni-biteni. Bakitani ya Gerishoni mpe ya Merari nde bamemaki yango mpe bakendeki. \v 18 Mampinga ya molako ya Ribeni elandaki na sima mpo na kotambola. Elitsuri, mwana mobali ya Shedewuri, nde azalaki mokonzi na bango. \v 19 Shelumieli, mwana mobali ya Tsurishadayi, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Simeoni. \v 20 Eliazafi, mwana mobali ya Deweli, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Gadi. \p \v 21 Sima, bato ya Keati bakendeki mpe bamemaki biloko ya bule. Balevi mosusu bazalaki kotonga Mongombo liboso ete bakoma. \v 22 Mampinga ya molako ya Efrayimi elandaki mpe na sima mpo na kotambola. Elishama, mwana mobali ya Amiwudi, nde azalaki mokonzi na bango. \v 23 Gamilieli, mwana mobali ya Pedakitsuri, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Manase. \v 24 Abidani, mwana mobali ya Gideoni, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Benjame. \p \v 25 Boye, mpo na kosukisa, mampinga ya libota ya Dani mpe elandaki na sima mpo na kotambola na se ya bendele na bango. Akiezeri, mwana mobali ya Amishadayi, nde azalaki mokonzi na bango. \v 26 Pagieli, mwana mobali ya Okirani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Aseri ; \v 27 mpe Akira, mwana mobali ya Enani, azalaki mokonzi ya mampinga ya libota ya Nefitali. \v 28 Wana nde ezalaki molongo oyo mampinga ya bana ya Isalaele ezalaki kotambola na yango. \s1 Moyize aluki motambolisi \p \v 29 Moyize alobaki na Obabi, mwana mobali ya Reweli, moto ya Madiani, bokilo ya Moyize : \pi1 — Tozali kokende na mokili oyo Yawe alobaki : « Nakopesa bino mokili yango. » Yaka kotambola elongo na biso. Tokosala ete obika bolamu oyo Yawe alakaki kosalela Isalaele. \p \v 30 Obabi azongiselaki ye : \pi1 — Te ! Nakokende elongo na bino te, nakozonga na mboka na ngai, kati na libota na ngai. \p \v 31 Kasi Moyize alobaki : \pi1 — Nabondeli yo : kotika biso te, pamba te yo nde oyebi bisika oyo tosengeli kotonga molako kati na esobe ; okozala motambolisi na biso. \v 32 Soki otamboli na biso elongo, tokokabola elongo na yo eloko nyonso ya malamu oyo Yawe akopesa biso. \p \v 33 Boye, balongwaki na ngomba ya Yawe mpe batambolaki mikolo misato ya mobembo. Sanduku ya Boyokani ya Yawe etambolaki liboso na bango na mobembo oyo ya mikolo misato mpo na kolukela bango esika ya kopema. \v 34 Na moyi, lipata na Yawe ezalaki likolo na bango, na tango bazalaki kolongola molako. \p \v 35 Tango nyonso Sanduku ezalaki kokende, Moyize azalaki koloba : \q1 « Oh Yawe, telema ! \q2 Tika ete banguna na Yo bapalangana ! \q2 Tika ete banguna na Yo bakima liboso na Yo ! » \p \v 36 Mpe tango nyonso lipata ezalaki kopema, azalaki koloba : \q1 « Oh Yawe, zonga kati na bana ya Isalaele, \q2 pamba te bazali ebele penza ! » \c 11 \s1 Bana ya Isalaele balelileli na Tabeera \p \v 1 Mokolo moko, bana ya Isalaele bakomaki kolelalela na tina na pasi na bango. Boye, kolelalela yango ekomaki kino na matoyi ya Yawe. Tango ayokaki yango, kanda na Ye emataki makasi mpe moto kowuta epai na Yawe epelaki kati na bango mpe etumbaki ndambo ya bato kati na molako. \p \v 2 Bato bagangaki epai ya Moyize ; ye abondelaki Yawe, mpe moto ekufaki. \v 3 Boye, bakomaki kobenga esika yango « Tabeera\f + \fr 11.3 \fr*\ft Tabeera elingi koloba : kopela ya moto ya makasi.\ft*\f*, » pamba te moto ya Yawe ezikisaki bato ya Isalaele. \s1 Bato baluki kolia misuni \p \v 4 Mokolo moko, bato ya bikolo mosusu oyo bazalaki elongo na bana ya Isalaele bakomaki na posa makasi ya kolia misuni. Bongo bana ya Isalaele bakomaki lisusu kolelalela mpe koloba : « Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia ? \v 5 Tokanisi lisusu bambisi, bandunda ya ndenge na ndenge, pasiteki, bandembi, matungulu, ayi oyo tozalaki kolia ya ofele na Ejipito. \v 6 Kasi sik’oyo, banzoto na biso ebebi penza, tozali lisusu te kolia biloko wana nyonso ! Tokomi kaka komona mana oyo ! » \p \v 7 Mana ezalaki lokola mbuma ya koriande mpe ezalaki komonana pembe lokola mayi ya nzete oyo babengaka bedeliumi. \v 8 Bato bazalaki kopanzana bipai na bipai mpo na kolokota yango, mpe na sima, bazalaki konika yango na libanga to mpe kotuta yango na liboka, bongo nde bakokaki kolamba yango na banzungu to kosalela yango mikate. Mikate na yango ezalaki na elengi lokola bagato oyo basala na mafuta ya sika. \v 9 Na butu, tango mamwe ezalaki kokita, mana mpe ezalaki kokweya nzela moko na yango. \p \v 10 Moyize ayokaki ndenge libota moko na moko ezalaki kolelalela na ekotelo ya ndako na bango ya kapo. Yawe asilikaki makasi ; mpe Moyize ayokaki pasi mingi na motema. \v 11 Moyize alobaki na Yawe : \pi1 — Mpo na nini komonisa mosali na Yo pasi ya boye ? Mabe nini ngai nasali penza mpo ete osundolela ngai mokumba ya bato oyo ? \v 12 Boni, ngai moto namemaki mokumba ya bato oyo nyonso to nabotaki bango ? Mpo na nini oloba na ngai ete namema bango na maboko lokola bana mike, na mokili oyo olakaki na ndayi epai ya bakoko na bango ? \v 13 Ngai nakozwa misuni ya kolia wapi mpo na bato oyo nyonso oyo bazali kokoba kolelalela epai na ngai : « Pesa biso misuni ya kolia ! » \v 14 Ngai moko nakokoka te komema bato oyo nyonso ; mokumba oyo eleki monene mpo na ngai. \v 15 Soki ezali kaka boye nde ozali kosala ngai, eleki malamu ete oboma ngai kaka sik’oyo. Soki nazwi ngolu na miso na Yo, kotika te ete namona kobebisama na ngai. \s1 Basungi tuku sambo ya Moyize \p \v 16 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Kati na bakambi ya Isalaele, sangisela Ngai mibali tuku sambo, ba-oyo oyebi ete bazali bakambi mpe bakalaka kati na bato. Tika ete baya na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe batelema wana elongo na yo. \v 17 Nakokita mpe nakosolola na yo kuna. Nakokamata Molimo oyo ezali epai na yo mpe nakotia yango epai na bango. Bongo, bakosunga yo mpo na komema mokumba ya bato oyo mpo ete omema yango lisusu yo moko te. \v 18 Loba na bato : « Bomibongisa mpe bomibulisa mpo na lobi, pamba te bokolia misuni. Yawe ayokaki tango bozalaki kolelalela : ‹ Ah, nani penza akoki kopesa biso misuni ya kolia ? Biso oyo tozalaki na biso malamu na Ejipito ! › Sik’oyo Yawe akopesa bino misuni mpe bokolia yango. \v 19 Bokolia yango te kaka mokolo moko to mikolo mibale to mitano to zomi to mpe tuku mibale. \v 20 Kasi bokolia yango sanza mobimba kino ekobima bino na zolo mpe bokoyoka yango nkele, pamba te bobwakaki Yawe oyo azali kati na bino, bolelaki-lelaki liboso na Ye mpe bolobaki : ‹ Mpo na nini tobimaki na Ejipito ? › » \p \v 21 Moyize alobaki lisusu : \pi1 — Bato nkoto nkama motoba bazali kotambola sima na ngai, mpe Yo ozali koloba : « Nakopesa bango misuni ya kolia mpo na sanza mobimba ! » \v 22 Ekokoka penza ata soki babomi bibwele nyonso oyo bazali na yango, ezala ngombe to bantaba ? Ekokoka penza ata soki balobi mbisi nyonso ya ebale monene ? \p \v 23 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Boni, loboko na Yawe ezali solo mokuse ? Okomona sik’oyo soki maloba oyo nalobi ekokokisama to ekokokisama te mpo na yo. \s1 Molimo na Nzambe akitelaki bakambi \p \v 24 Boye, Moyize abimaki mpe ayebisaki bato maloba oyo Yawe ayebisaki ye. Asangisaki bakambi tuku sambo mpe atelemisaki bango zingazinga ya Ndako ya kapo. \v 25 Yawe akitaki na nzela ya lipata mpe asololaki na ye ; akamataki nguya ya Molimo, oyo ezalaki epai na Ye, mpe atiaki yango epai ya bakambi tuku sambo. Tango kaka Molimo akitelaki bango, bakomaki kosakola, kasi bakobaki te. \p \v 26 Nzokande, bato mibale oyo bakombo na bango ezalaki Elidadi mpe Medadi batikalaki kati na molako. Bango mpe bazalaki na molongo ya bampaka, kasi bakendeki te na Ndako ya kapo. Molimo akitelaki bango mpe bakomaki kosakola kati na molako. \v 27 Elenge mobali moko apotaki mbangu mpe akendeki koyebisa Moyize : \pi1 — Elidadi mpe Medadi bazali kosakola kati na molako ! \p \v 28 Jozue, mwana mobali ya Nuni, oyo azalaki mosungi ya Moyize wuta bolenge na ye alobaki : \pi1 — Moyize, nkolo na ngai, pekisa bango ! \p \v 29 Kasi Moyize azongisaki : \pi1 — Boni, okosalela ngai zuwa na likambo nini ? Nakosepela kutu ete bato nyonso bakoma basakoli mpe Yawe akitisa Molimo na Ye epai na bango ! \p \v 30 Bongo, Moyize mpe bakambi nyonso ya Isalaele bazongaki na molako. \s1 Yawe atindi bankanga \p \v 31 Boye, Yawe atindaki mopepe moko oyo ememaki bankanga wuta na ebale monene mpe ebwakaki yango na molako mpe na zingazinga na yango. Etando oyo bankanga ekweyaki ezalaki molayi ya mobembo ya mokolo moko na makolo, mpe ezipaki mabele na bosanda ya metele moko. \v 32 Bato babimaki mpo na kolokota bankanga mokolo mobimba, butu na yango mpe mokolo oyo elandaki. Moto moko te atikalaki kozwa na se ya bakilo nkoto moko ; mpe batandaki yango na zingazinga ya molako. \p \v 33 Kasi, wana misuni ezalaki nanu kati na minoko na bango mpe basilisaki nanu kotafuna yango te, kanda ya Yawe epelaki mpo na bango mpe apesaki bango etumbu ya makasi. \v 34 Yango wana, bakomaki kobenga esika yango « Kibiroti-Atava\f + \fr 11.34 \fr*\ft Kibiroti-Atava elingi koloba : malita ya lokoso.\ft*\f*, » pamba te ezalaki na esika wana nde bakundaki bato ya lokoso. \v 35 Longwa na Kibiroti-Atava, bana ya Isalaele basalaki mobembo kino na Atseroti mpe bavandaki kuna. \c 12 \s1 Miriami mpe Aron batongi Moyize \p \v 1 Miriami mpe Aron bazalaki kotonga Moyize likolo ya mwasi na ye, pamba te abalaki mwasi ya mokili ya Kushi. \v 2 Balobaki : \pi1 — Boni, Yawe alobaka kaka na nzela ya Moyize ? Alobaki mpe na nzela na biso te ? \p Yawe ayokaki bango. \v 3 Nzokande Moyize azalaki moto ya komikitisa makasi koleka bato nyonso ya mokili. \p \v 4 Mbala moko, Yawe alobaki na Moyize, Aron mpe Miriami : \pi1 — Boya bino misato na Ndako ya kapo ya Bokutani. \p Bango nyonso misato bakendeki. \v 5 Yawe akitaki na likonzi ya lipata, atelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo mpe abengaki Aron mpe Miriami. Tango bango mibale batelemaki liboso, \v 6 alobaki : \pi1 — Boyoka maloba na Ngai ! \qm1 Soki mosakoli moko ya Yawe azali kati na bino, \qm2 namimonisaka Ngai moko \qm1 epai na ye na nzela ya bimoniseli, \qm2 nalobaka na ye na nzela ya bandoto. \qm1 \v 7 Kasi ezalaka bongo te \qm2 mpo na Moyize, mosali na Ngai. \qm2 Azali sembo kati na ndako na Ngai mobimba. \qm1 \v 8 Nasololaka na ye elongi na elongi, \qm2 na polele penza kasi na masese te. \qm1 Amonaka lolenge ya Yawe. \qm2 Mpo na nini bozali na somo te \qm2 ya kotonga Moyize, mosali na Ngai ? \p \v 9 Bongo Yawe apeliselaki bango kanda na Ye mpe atikaki bango. \v 10 Tango kaka lipata elongwaki likolo ya Ndako ya kapo, bokono ya maba ezwaki mbala moko Miriami : ezalaki pembe lokola mvula ya pembe. Aron abalukaki mpo na kotala Miriami mpe amonaki ete azwi bokono ya maba. \v 11 Bongo Aron alobaki na Moyize : \pi1 — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Kotangela biso te masumu oyo tosali na bozoba ! \v 12 Kotika te ete Miriami azala lokola mwana oyo abotami ya kokufa, oyo abimi na libumu ya mama na ye na ndambo ya nzoto ya kopola ! \p \v 13 Boye, Moyize abelelaki Yawe : \pi1 — Oh Nzambe, nabondeli Yo, bikisa ye ! \p \v 14 Yawe azongiselaki Moyize : \pi1 — Soki tata na ye abwakelaki ye soyi na elongi ; boni, alingaki kozala na soni te mikolo sambo ? Tia ye na libanda ya molako mikolo sambo, na sima na yango nde akoki kozonga. \p \v 15 Boye batiaki Miriami libanda ya molako mikolo sambo mpe bato bazalaki kotambola te kino tango Miriami azongaki. \v 16 Sima na yango, bato batikaki Atseroti mpe bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Parani. \c 13 \s1 Moyize atindi bato mpo na kononga Kanana \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Tinda bato mpo na kononga mokili ya Kanana oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. Kati na libota moko na moko, pona mpe tinda moto moko kati na bakambi. » \p \v 3 Na mitindo ya Yawe, Moyize atindaki bango wuta na esobe ya Parani. Bango nyonso bazalaki bakambi ya mabota ya bana ya Isalaele. \b \li4 \v 4 Tala bakombo na bango : \b \li1 mpo na libota ya Ribeni : Chamuwa, mwana mobali ya Zakuri ; \li1 \v 5 mpo na libota ya Simeoni : Shafati, mwana mobali ya Ori ; \li1 \v 6 mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ; \li1 \v 7 mpo na libota ya Isakari : Yigali, mwana mobali ya Jozefi ; \li1 \v 8 mpo na libota ya Efrayimi : Oze, mwana mobali ya Nuni ; \li1 \v 9 mpo na libota ya Benjame : Paliti, mwana mobali ya Rafu ; \li1 \v 10 mpo na libota ya Zabuloni : Gadieli, mwana mobali ya Sodi ; \li1 \v 11 mpo na libota ya Jozefi na nzela ya Manase : Gaadi, mwana mobali ya Susi ; \li1 \v 12 mpo na libota ya Dani : Amieli, mwana mobali ya Gemali ; \li1 \v 13 mpo na libota ya Aseri : Seturi, mwana mobali ya Mikaeli ; \li1 \v 14 mpo na libota ya Nefitali : Nakibi, mwana mobali ya Vofisi ; \li1 \v 15 mpo na libota ya Gadi : Geweli, mwana mobali ya Maki. \b \li4 \v 16 Oyo nde bakombo ya bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili ya Kanana. Moyize apesaki Oze, mwana mobali ya Nuni, kombo « Jozue. » \b \p \v 17 Tango Moyize atindaki bango mpo na kononga mokili ya Kanana, alobaki : « Bolekela na nzela ya etuka ya Negevi mpe bokotela na nzela ya mokili ya bangomba. \v 18 Botala soki mokili yango ezali ndenge nini mpe soki bato oyo bavandaka kuna bazalaka makasi to balemba, soki bazalaka ebele to moke. \v 19 Botala ndenge nini mokili epai wapi bazali kowumela ezali : soki ezali malamu to mabe ; soki bazingela bingumba na yango na bamir to te. \v 20 Botala soki mabele na yango ezali ndenge nini : ebotaka malamu to te ; ezali na banzete to te. Bosala nyonso penza ete bozonga na mbuma ya mokili yango. » \p Ezalaki eleko ya kobuka bambuma ya liboso ya vino. \p \v 21 Boye bakendeki mpe banongaki mokili kobanda na esobe ya Tsini kino na Reobi, pembeni ya Lebo-Amati. \v 22 Balekaki na nzela ya etuka ya Negevi mpe bakomaki kino na Ebron epai wapi Ayimani, Sheshayi mpe Talimayi, bakitani ya Anaki, bazalaki kovanda. Engumba Ebron etongamaki mibu sambo liboso ya engumba Tsoani kati na Ejipito. \v 23 Tango bakomaki na lubwaku ya Eshikoli, bakataki etape mobimba ya nzete ya vino oyo ezalaki na liboke ya bambuma ya vino. Lokola ezalaki kilo makasi, bato mibale kati na bango basalelaki banzete mpo na komema yango ; bamemaki lisusu bambuma ya grenade mpe ya figi. \v 24 Wuta na tango wana, bakomaki kobenga esika yango « lubwaku ya Eshikoli, » oyo elingi koloba « lubwaku ya liboke ya bambuma ya vino, » mpo na kokanisa liboke ya bambuma ya vino oyo bana ya Isalaele babukaki kuna. \s1 Banongi bapesi sango \p \v 25 Sima na mikolo tuku minei, bazongaki wuta na mokili oyo banongaki. \v 26 Bayaki kokuta Moyize, Aron mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele na Kadeshi, kati na esobe ya Parani. Ezalaki kuna nde bapesaki bango elongo na lisanga mobimba sango ya mobembo na bango mpe balakisaki bango bambuma ya mokili yango. \v 27 Bapesaki sango oyo epai ya Moyize : « Tokotaki kino na mokili epai wapi otindaki biso. Solo, ezali penza mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi ; tala kutu bambuma ya mokili yango. \v 28 Kasi bato oyo bavandaka kuna bazali makasi mingi, bingumba na bango etongama makasi mpe ezali minene ; tomonaki lisusu bakitani ya Anaki kuna. \v 29 Bato ya Amaleki bavandaka na etuka ya Negevi ; bato ya Iti, ya Yebusi mpe ya Amori bavandaka na mokili ya bangomba, mpe bato ya mboka Kanana bavandaka pembeni ya ebale monene mpe pembeni-pembeni ya Yordani. » \p \v 30 Bongo Kalebi apamelaki bato ete batika makelele liboso ya Moyize, mpe alobaki : \pi1 — Tokende kobotola mokili yango, pamba te tozali solo na makoki mpo na kosala yango ! \p \v 31 Kasi bato oyo bakendeki elongo na ye balobaki : \pi1 — Tokokoka te kobundisa bato wana mpo ete bazali makasi koleka biso. \p \v 32 Bongo bakomaki kopanza sango mabe kati na bana ya Isalaele na tina na mboka oyo banongaki, bazalaki koloba : « Mokili oyo tonongaki ezali penza mabele oyo eliaka bavandi na yango ; bongo bato nyonso oyo tomonaki kuna bazali bingambe. \v 33 Tomonaki kuna lisusu bato milayi, bakitani ya Anaki, oyo babima na nzela ya bato milayi. Na miso na biso moko, tozalaki komimona lokola mabanki ; bango mpe bazalaki komona biso kaka ndenge wana na miso na bango. » \c 14 \s1 Bana ya Isalaele batomboki \p \v 1 Bato nyonso ya lisanga batombolaki mingongo na bango mpe bakomaki kolela makasi butu mobimba. \v 2 Bato nyonso ya Isalaele bakomaki koyimayima mpo na Moyize mpe Aron, mpe lisanga mobimba ekomaki koloba : « Ah, elingaki kozala malamu soki tomikufelaki na biso na Ejipito to na esobe ! \v 3 Boni, Yawe amemi biso na mokili oyo kaka mpo ete tokufa na mopanga ? Boye basi mpe bana na biso bakokoma kaka bomengo ya bitumba. Ekozala malamu te mpo na biso ete tozonga na biso na Ejipito ? » \p \v 4 Boye bakomaki kolobana bango na bango : « Tosengeli kopona mokambi mosusu mpe kozonga na Ejipito. » \p \v 5 Moyize mpe Aron bakweyaki elongi kino na mabele liboso ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele oyo basanganaki kuna. \v 6 Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, oyo bazalaki na molongo ya bato oyo bakendeki kononga mokili bapasolaki bilamba na bango \v 7 mpe balobaki na lisanga mobimba ya Isalaele : « Mokili oyo totambolaki kati na yango mpe tonongaki ezali malamu mingi penza. \v 8 Soki tozwi ngolu na miso ya Yawe, akokamba biso kino na mokili yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpe akopesa biso yango. \v 9 Kasi botombokela Yawe te mpe bobanga te bato oyo bazali na mokili yango, pamba te tokomela bango ; kobatelama na bango elongwe kati na bango. Nzokande na ngambo na biso, Yawe azali elongo na biso. Bobanga bango te. » \s1 Moyize asengi na Yawe ete alimbisa bato \p \v 10 Wana lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki koloba ete baboma bango na mabanga, nkembo ya Yawe emonanaki na Ndako ya kapo ya Bokutani na miso ya bato nyonso ya Isalaele. \v 11 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Kino tango nini bato oyo bakotiola Ngai ? Kino tango nini bakoboya penza kondimela Ngai, ezala mpo na bikamwa nyonso oyo nasali kati na bango ? \v 12 Nakokweyisa bango na nzela ya etumbu ya bokono oyo ebomaka mpo na kobebisa bango. Kasi yo, nakokomisa yo ekolo moko monene mpe ya nguya koleka bango. \p \v 13 Moyize alobaki na Yawe : \pi1 — Bato ya Ejipito bakoyoka yango ! Nzokande ezali na nguya na Yo nde obimisaki bato oyo kati na bango. \v 14 Mpe bakoyebisa na bavandi ya mokili oyo makambo yango. Oh Yawe, basila koyoka wuta kala ete ozalaka elongo na bato oyo, ete Yo, oh Yawe, omimonisaki epai na bango miso na miso, ete lipata na Yo etelema likolo na bango, ete otambolaka liboso na bango kati na likonzi ya lipata, na moyi, mpe kati na likonzi ya moto, na butu. \v 15 Na bongo, soki obomi bato oyo nyonso na mbala moko, bikolo oyo eyokaki sango oyo mpo na Yo ekoloba : \v 16 « Yawe azangaki penza makoki ya kokotisa bato oyo na mokili oyo alakaki, na nzela ya ndayi, ete akopesa bango yango, yango wana abomaki bango kati na esobe. » \v 17 Sik’oyo, nabondeli Yo, tika ete makasi ya Nkolo emonisama na nguya na yango kolanda ndenge olobaki : \v 18 « Nazali Yawe oyo asilikaka noki te, atonda na bolingo, alimbisaka masumu mpe botomboki ; kasi apesaka moto oyo asali mabe etumbu, apesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei. » \v 19 Nabondeli Yo, kolanda bolingo monene na Yo, limbisa masumu ya bato oyo ndenge kaka olimbisaki bango wuta babimaki na Ejipito kino sik’oyo. \p \v 20 Yawe azongisaki : \pi1 — Nalimbisi bango ndenge osengi. \v 21 Kasi na Kombo na Ngai, mpe lokola mokili mobimba etondi na nkembo ya Yawe, \v 22 moko te kati na bato oyo bamonaki nkembo na Ngai mpe bikamwa oyo nasalaki kati na Ejipito mpe na esobe kasi baboyaki kotosa Ngai mpe bamekaki Ngai mbala zomi, \v 23 moko te kati na bango akomona lisusu mokili oyo nalakaki na nzela na ndayi epai ya bakoko na bango, moko te kati na ba-oyo batiolaki Ngai akomona lisusu mokili yango. \v 24 Kasi lokola Kalebi, mosali na Ngai, atambolisamaka na molimo mosusu mpe atamboli na bosembo na miso na Ngai, nakokotisa ye na mokili oyo asilaki kokende, mpe bakitani na ye bakokamata yango lokola libula. \v 25 Lokola bato ya Amaleki mpe ya Kanana bazali nanu kovanda na lubwaku, bino bokobaluka mpe bokozonga lobi na tongo na esobe, na nzela oyo ekenda na ebale monene ya Barozo. \p \v 26 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : \pi1 \v 27 — Kino penza tango nini lisanga oyo ya batomboki ekokoba kotelemela Ngai ? Solo, nayoki bileli mpe koyimayima ya bana ya Isalaele na tina na Ngai. \v 28 Yebisa bango : « Nalapi ndayi, » elobi Yawe, « nakosalela bino makambo nyonso oyo nayoki bino koloba. \v 29 Bibembe na bino ekolala na esobe oyo. Bino nyonso oyo bozali na mibu tuku mibale mpe koleka, bino oyo botangamaki na motango mpe boyimaki-yimaki mpo na Ngai, \v 30 bokokota te na mokili oyo nalakaki na nzela ya ndayi, na kotombola loboko, ete nakokomisa yango mokili na bino, longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni. \v 31 Kasi nakomema bana na bino oyo na tina na bango bolobaki ete bakozwa bango lokola bomengo ya bitumba, mpe nakokotisa bango na esengo kati na mokili yango oyo botiolaki. \v 32 Nzokande bino, bibembe na bino ekolala na esobe oyo. \v 33 Bana na bino bakokoma babateli bibwele awa na esobe mibu tuku minei. Lokola botamboli na bosembo te na miso na Ngai, bakomona pasi kino ebembe na bino ya suka elala na esobe. \v 34 Lokola bosalaki mikolo tuku minei mpo na kononga mokili, bokomona pasi mibu tuku minei mpo na masumu na bino : mobu moko mpo na mokolo moko. Na bongo bokoyeba mbano oyo ezali kati na likambo ya kotelemela Ngai. \v 35 Ngai Yawe nde nalobi ; mpe nakosala solo makambo oyo epai ya lisanga oyo mobimba ya batomboki oyo basanganaki mpo na kotelemela Ngai. Bakomona suka na bango kati na esobe oyo ; ezali awa nde bakokufa. » \p \v 36 Bato oyo Moyize atindaki mpo na kononga mokili mpe, na bozongi na bango, batindikaki lisanga mobimba na koyimayima na tina na ye wana bapanzaki sango mabe na tina na mokili ; \v 37 bato oyo babimisaki maloba mabe na tina na mokili yango, bazwaki etumbu mpe bakufaki liboso ya Yawe. \v 38 Kati na bato oyo bakendeki kononga mokili, kaka Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe Kalebi, mwana mobali ya Yefune, nde babikaki. \p \v 39 Tango Moyize ayebisaki makambo oyo epai ya bato nyonso ya Isalaele, balelaki makasi. \v 40 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bamataki na songe ya ngomba kati na etuka ya bangomba mpe balobaki : \pi1 — Solo, tosalaki masumu ; kasi sik’oyo, tozali kokende kuna, na esika oyo Yawe alakaki biso. \p \v 41 Kasi Moyize alobaki : \pi1 — Mpo na nini bozali koboya kotosa mitindo ya Yawe ? Likambo oyo ekolonga te ! \v 42 Bokende te, pamba te Yawe azali elongo na bino te ; banguna na bino bakolonga bino. \v 43 Bato ya Amaleki mpe ya Kanana bakokutana na bino kuna. Bongo lokola bopesaki Yawe mokongo, bokokweya na mopanga mpo ete akozala elongo na bino te. \p \v 44 Na lolendo na bango, bakendeki kaka na songe ya ngomba kati na etuka ya bangomba ; kasi Moyize alongwaki te na molako, ndenge moko mpe mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe. \v 45 Boye, bato ya Amaleki mpe ya Kanana oyo bazalaki kovanda na bangomba yango bakitelaki bango, babundisaki bango, balongaki bango mpe balandaki bango kino na Orima. \c 15 \ms1 Mibeko ya kotosa sima na kokota na mokili \s1 Bambeka mpe makabo \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Sima na bino kokota na mokili oyo nakopesa bino, mokili epai wapi bokovanda, \v 3 bokobonzela Yawe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe ; ekowuta kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Tika ete ezala mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokokisa ndayi, mbeka oyo bokobonza wuta na mokano ya mitema na bino to mpe mbeka oyo bokobonza na bafeti na bino ya bule. \v 4 Boye, moto oyo akomema mbeka na ye asengeli kobonzela Yawe likabo ya gato, bakilo misato ya farine oyo basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive. \v 5 Mpo na bana meme moko na moko ya mbeka ya kotumba, bosengeli kobakisa balitele ya vino lokola likabo ya masanga. \v 6 Mpo na meme ya mobali, bokobongisa likabo ya gato, bakilo motoba ya farine oyo basangisa na balitele mibale na ndambo ya mafuta ya olive, \v 7 mpe balitele mibale na ndambo ya vino lokola likabo ya masanga. Bokobonza yango lokola malasi ya solo kitoko liboso ya Yawe. \v 8 Soki bobongisi mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kokisa ndayi to mbeka ya boyokani mpo na Yawe ; \v 9 bokomema elongo na mwana ngombe, likabo ya gato, bakilo libwa ya farine basangisa na balitele minei ya mafuta. \v 10 Bokomema lisusu balitele minei ya vino lokola likabo ya masanga : ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. \p \v 11 Ezali ndenge wana nde esengeli kobongisa mbeka nyonso ya ngombe ya mobali to ya meme ya mobali to ya bana meme to mpe ya mwana ntaba. \v 12 Bokosala bongo mpo na nyama moko na moko, ezala soki motango na yango ezali boni. \v 13 Mwana mboka asengeli kosala bongo mpo na makabo wana tango akomema likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. \v 14 Pamba te, na milongo oyo ekoya, mopaya nyonso to moto mosusu oyo azali kowumela kati na bino, oyo akobonza likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, asengeli kosala ndenge kaka bino bozali kosala. \v 15 Mibeko ya kosalela ekozala ndenge moko mpo na lisanga mobimba, ezala bino to mopaya oyo akowumela kati na bino. Yango ekozala mobeko ya libela ezala mpo na milongo oyo ekoya. Bino na mopaya bozali ndenge moko liboso ya Yawe. \v 16 Ezala bino to mopaya oyo azali kati na bino, bokosalela kaka mibeko mpe mitindo moko. › » \s1 Likabo ya mapa ya liboso \p \v 17 Yawe alobaki na Moyize : \v 18 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nazali komema bino \v 19 mpe bokolia bilei ya mokili yango, bobonza ndambo lokola likabo epai na Yawe. \v 20 Bobonza gato oyo ewuti na farine ya liboso oyo bokonika, mpe bobonza yango lokola likabo oyo ewuti na mbuma ya liboso oyo elanga ya ble eboti. \v 21 Boye, bokobonzaka epai na Yawe bambuma ya liboso ya milona na bino : ekozala bongo mpo na milongo oyo ekoya na sima. \s1 Bambeka mpo na masumu oyo esalemi na nko te \p \v 22 Soki esalemi ete bobuki na nko te moko kati na mibeko oyo Ngai Yawe napesaki na nzela ya Moyize, \v 23 moko kati na mitindo oyo Ngai Yawe napesaki bino na nzela ya Moyize, kobanda na mokolo oyo napesaki bino yango, mpe nazali kokoba kopesa yango kati na milongo oyo ekoya ; \v 24 mpe soki mbeba yango esalemi na nko te mpe lisanga esosoli yango te, lisanga mobimba ekobonza mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, elongo na likabo ya gato mpe likabo ya masanga ndenge ekatama, mpe ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu. \v 25 Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na lisanga mobimba ya Isalaele, mpe bakolimbisama ; pamba te basalaki mabe na nko te mpe bamemelaki Yawe mpo na mabe na bango likabo bazikisa na moto mpe mbeka mpo na masumu. \v 26 Lisanga mobimba ya Isalaele elongo na bapaya oyo bazali kowumela kati na bango bakozwa bolimbisi, pamba te bato nyonso bamikotisaki na mbeba oyo esalemaki na nko te. \p \v 27 Kasi soki esalemi ete moto moko nde asali lisumu na nko te, asengeli komema mwana ntaba ya mwasi ya mobu moko lokola mbeka mpo na masumu. \v 28 Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu liboso ya Yawe mpo na moto oyo asalaki masumu na nko te. Mpe tango mosala ya bolimbisi masumu ekosalema mpo na ye, akolimbisama solo. \v 29 Bosengeli kosalela mobeko se moko, ezala mpo na mwana mboka kati na bana ya Isalaele to mpo na mopaya oyo azali kowumela kati na bino, oyo asali lisumu na nko te. \p \v 30 Kasi moto nyonso oyo akosala lisumu na nko, azala mwana mboka to mopaya, atioli nde Yawe ; mpe moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati ya bato na ye. \v 31 Pamba te atioli Liloba na Yawe mpe abuki mitindo na ye. Solo, moto ya lolenge oyo basengeli kolongola ye kati na bato na ye mpe akomema ngambo ya mabe na ye. › » \s1 Kufa mpo na moto oyo akomemia te mokolo ya Saba \p \v 32 Wana bana ya Isalaele bazalaki kati na esobe, bamonaki moto moko kolokota bakoni na mokolo ya Saba. \v 33 Bato oyo bamonaki ye kolokota bakoni bamemaki ye epai ya Moyize, Aron mpe lisanga mobimba. \v 34 Batiaki ye na esika oyo bazalaki kokengela ye malamu, pamba te bayebaki nanu malamu-malamu te nini esengelaki kosala mpo na ye. \v 35 Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Moto oyo asengeli kokufa. Bato nyonso ya lisanga basengeli komema ye libanda ya molako mpe koboma ye na mabanga. » \p \v 36 Bongo lisanga mobimba ememaki ye libanda ya molako mpe babambaki ye mabanga kino akufaki ndenge Yawe atindaki yango epai ya Moyize. \s1 Malako na tina na bilamba \p \v 37 Yawe alobaki na Moyize : \v 38 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Na milongo oyo ekoya, bosengeli kotia singa ya langi ya ble na basonge ya bilamba na bino ; esengeli kokangisa kitendi moko na moko na singa ya langi ya ble. \v 39 Tango nyonso bokotala bitendi yango, bokobanda kokanisa mitindo nyonso ya Yawe, mpo ete botosa yango mpe botika kolanda baposa ya mitema na bino mpe ya miso na bino, oyo ekoki kotindika bino na kobungisa boyengebene. \v 40 Boye, bokokanisa mibeko na Ngai nyonso, bokotosa yango mpe bokozala bule mpo na Nzambe na bino. \v 41 Nazali Yawe, Nzambe na bino ; nabimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Solo, nazali Yawe, Nzambe na bino. › » \c 16 \s1 Kore, Datani mpe Abirami batombokeli Moyize \p \v 1 Molevi Kore, mwana mobali ya Yitseari, ya libota ya bato ya Keati, elongo na bato misato ya libota ya bato ya Ribeni basalelaki Moyize likita ; ezalaki : Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, elongo na Oni, mwana mobali ya Peleti. \v 2 Batombokelaki Moyize. Elongo na bango, ezalaki na bana ya Isalaele nkama mibale na tuku mitano oyo bayebanaki malamu lokola bakambi ya lisanga mpe bazalaki kosangana kati na mayangani ya bakambi ya lisanga. \v 3 Bayaki lisanga mpo na kotelemela Moyize mpe Aron. Balobaki na bango : \pi1 — Bino mpe bolekisi ! Lingomba mobimba ezali bule mpe moto nyonso kati na yango azali bule, mpe Yawe azali elongo na bango. Boye, mpo na nini bozali komitia likolo ya lisanga ya Yawe ? \p \v 4 Tango Moyize ayokaki bongo, akweyaki elongi kino na mabele. \v 5 Alobaki na Kore mpe na bato na ye nyonso oyo balandaki ye : \pi1 — Lobi na tongo, Yawe akolakisa nani azali moto na Ye mpe nani oyo azali bule, mpe akotika ye kopusana pene na Ye ; akotika solo moponami na Ye kopusana pene na Ye. \v 6 Yo, Kore, elongo na bato nyonso oyo bazali kolanda yo, bokosala likambo oyo : Bokamata bambabola oyo batumbelaka malasi \v 7 mpe, lobi, botia moto mpe malasi ya ansa kati na yango liboso ya Yawe. Moto oyo Yawe akopona, ye nde azali bule. Bino Balevi, bino mpe bolekisi ! \p \v 8 Moyize alobaki lisusu na Kore : \pi1 — Bino Balevi, boyoka sik’oyo ! \v 9 Ekoki na bino te ete Nzambe ya Isalaele atia bino pembeni kati na lisanga ya Isalaele mpe abenda bino pembeni na Ye mpo na kosala mosala na Mongombo ya Yawe mpe kotelema liboso ya lisanga mpo na kosalela bango ? \v 10 Abendaki bino pembeni na Ye elongo na Balevi nyonso oyo bazali kolanda bino ; kasi sik’oyo, bazali lisusu koluka kozwa bonganga-Nzambe ! \v 11 Ezali Yawe nde bosalelaki likita, yo elongo na bato oyo bazali kolanda yo. Aron nde nani mpo ete bokoka koyimayima na tina na ye ? \p \v 12 Mpe na sima, Moyize abengisaki Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi. Kasi bazongisaki : \pi1 — Tokoya te ! \v 13 Ekoki kaka te mpo na yo kobimisa biso na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mpo na koya kobomisa biso kati na esobe ? Sik’oyo olingi lisusu kokoma mokonzi na biso ? \v 14 Te, okotisi biso kutu te na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi to opesi biso ata libula moko te ya bilanga to ya bilanga ya vino. Boni, okanisi ete bato oyo bakufa miso ? Te, tokoya te ! \p \v 15 Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe : \pi1 — Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane ; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango. \p \v 16 Moyize alobaki na Kore : \pi1 — Lobi, yo mpe bato nyonso oyo bazali kolanda yo, bokotelema elongo na Aron liboso ya Yawe. \v 17 Moko na moko akokamata mbabola na ye, oyo batumbelaka malasi, bongo akotia malasi ya ansa kati na yango mpe akomema yango liboso ya Yawe. Bambabola nyonso ekozala nkama mibale na tuku mitano ; yo mpe elongo na Aron bokomema bambabola na bino. \p \v 18 Moto na moto akamataki mbabola na ye, atiaki moto mpe malasi ya ansa kati na yango ; bongo atelemaki esika moko na Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 19 Tango Kore asangisaki bato nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, nkembo ya Yawe ebimelaki lisanga mobimba, \v 20 mpe Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : \pi1 \v 21 — Bokabwana na lisanga ya bato oyo mpo ete nalingi kosilisa bango kaka na mbala moko. \p \v 22 Kasi Moyize mpe Aron bakweyaki bilongi kino na mabele mpe bagangaki : \pi1 — Eh Nzambe ya milimo nyonso ya bato ! Okosilikela lisanga mobimba likolo ya lisumu ya moto moko kaka ? \p \v 23 Bongo, Yawe alobaki na Moyize : \pi1 \v 24 — Loba na lisanga ete bakende mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami. \p \v 25 Moyize atelemaki mpe akendeki epai ya Datani mpe Abirami ; mpe bakambi nyonso ya Isalaele balandaki ye. \v 26 Akebisaki lisanga mobimba : « Bozala mosika ya bandako ya kapo ya bato oyo ya mabe. Bosimba ata eloko moko te ya bango, noki te bokokufa likolo ya masumu na bango ! » \p \v 27 Boye bakendeki mosika ya bandako ya kapo ya Kore, ya Datani mpe ya Abirami. Datani mpe Abirami elongo na basi, bana mpe bakoko na bango babimaki libanda mpe bakendeki kotelema liboso ya bikotelo ya bandako na bango ya kapo. \p \v 28 Bongo Moyize alobaki : « Tala ndenge nini bokoyeba solo ete Yawe atindaki ngai kosala makambo oyo nyonso, kasi ezali makanisi ya motema na ngai moko te : \v 29 Soki bato oyo bakufi kufa ya bato nyonso mpe bamoni makambo oyo bato nyonso bamonaka, wana nde Yawe atindaki ngai te ! \v 30 Kasi soki Yawe asali penza likambo moko ya sika, bongo mabele efungoli monoko na yango mpe emeli bango elongo na biloko na bango nyonso, mpe bakiti ya bomoi kati na mokili ya bakufi, wana nde bokoyeba solo ete bato oyo batiolaki Yawe. » \p \v 31 Tango kaka asilisaki koloba makambo oyo nyonso, mabele efungwamaki na se ya matambe ya Datani mpe Abirami ; \v 32 efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bato ya Kore nyonso elongo na bozwi na bango nyonso. \v 33 Bakitaki ya bomoi kati na mokili ya bakufi elongo na biloko na bango nyonso, mabele ezipaki bango mpe bakufaki ndenge wana. Mpe balimwaki kati na lisanga. \v 34 Bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki pembeni na bango bakimaki tango bayokaki bango koganga. Bazalaki komilobela : « Mabele ekomela biso mpe lokola ! » \p \v 35 Moto ewutaki epai na Yawe mpe etumbaki bato nkama mibale na tuku mitano oyo bazalaki kobonza malasi ya ansa. \s1 Nani akoki kopusana pene na Nzambe ? \p \v 36 Yawe alobaki na Moyize : \v 37 « Loba na Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron, ete balongola bambabola oyo batumbelaka malasi na kati-kati ya moto, mpe bapanza makala ya moto mosika, pamba te bambabola wana ezali bule. \v 38 Tika ete bakamata bambabola yango, atako ezali ya bato oyo bakufaki likolo ya masumu na bango ; mpe tika ete batuta yango na marto mpo ete ekoma papala mpe batia yango likolo ya etumbelo, pamba te bamemaki yango liboso ya Yawe mpe ekomaki bule. Tika ete yango ekoma elembo mpo na bana ya Isalaele. » \p \v 39 Boye, Nganga-Nzambe Eleazari alokotaki bambabola nyonso ya bronze oyo bato oyo bazikaki na moto bamemaki, mpe atutaki yango na marto mpo na kotia yango likolo ya etumbelo ; \v 40 ndenge Yawe atindaki ye, na nzela ya Moyize. Yango ekozala lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele ete moto moko te, moto oyo abulisama te, moto oyo azali mopaya liboso ya bakitani ya Aron, akoki koya kotumba malasi ya ansa liboso ya Yawe, noki te akokoma lokola Kore mpe bato oyo balandaki ye. \s1 Bato bakomi koyimayima \p \v 41 Mokolo oyo elandaki, lisanga mobimba ya bana ya Isalaele ekomaki koyimayima mpo na Moyize mpe Aron. Bazalaki koloba : « Bino bobomi bato na Yawe. » \p \v 42 Kasi tango lisanga mobimba esanganaki mpo na kotelemela Moyize mpe Aron, babalukaki na ngambo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe mbala moko lipata ezipaki yango mpe nkembo na Yawe emonisamaki. \v 43 Boye, Moyize mpe Aron bakendeki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani \v 44 mpe Yawe alobaki na Moyize : \v 45 « Bokende mosika ya lisanga oyo mpo ete nasilisa bango kaka na mbala moko. » \p Mpe bakweyaki bilongi kino na mabele. \v 46 Moyize alobaki na Aron : « Kamata mbabola na yo mpe tia malasi ya ansa kati na yango elongo na moto ya etumbelo. Bongo, kima mbangu kati na lisanga mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, pamba te kanda makasi ebimi liboso ya Yawe, etumbu ezali koya. » \p \v 47 Aron asalaki ndenge kaka Moyize alobaki, mpe akimaki mbangu na kati-kati ya lisanga. Nzokande, etumbu emibandelaki kosala mosala na yango na kati-kati ya bato, kasi Aron abonzaki malasi ya ansa mpe asalaki mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango. \v 48 Atelemaki na kati-kati ya bato oyo bazalaki na bomoi mpe oyo bazalaki ya kokufa mpe etumbu esilaki. \v 49 Nzokande, bato nkoto zomi na minei na nkama sambo bakufaki na etumbu wana, bakisa oyo bakufaki likolo ya Kore. \v 50 Bongo, Aron azongaki epai ya Moyize na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, pamba te etumbu esilaki. \c 17 \s1 Yawe alakisi ete aponi Aron \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Yebisa bana ya Isalaele ete bapesa yo mangenda zomi na mibale, lingenda moko mpo na mokambi ya libota moko na moko kati ya bikolo na bango. Koma kombo ya moto moko na moko na lingenda na ye. \v 3 Koma kombo ya Aron mpo na lingenda ya libota ya Levi, mpo ete mokambi moko na moko ya libota akozala na lingenda moko. \v 4 Tia mangenda yango na Ndako ya kapo ya Bokutani, liboso ya Sanduku ya Litatoli, epai wapi nakutanaka na bino. \v 5 Lingenda ya moto oyo nakopona ekobimisa moto ya etape. Ezali na nzela wana nde nakosukisa Ngai moko koyimayima ya tango nyonso kati na bana ya Isalaele na tina na bino. » \p \v 6 Moyize ayebisaki bana ya Isalaele, mpe bakambi na bango bapesaki ye mangenda zomi na mibale, lokola lingenda moko mpo na mokambi ya libota moko na moko, lingenda ya Aron mpe ezalaki kati na mangenda wana. \v 7 Moyize atiaki mangenda nyonso liboso ya Yawe, kati na Ndako ya kapo ya Litatoli. \v 8 Mokolo oyo elandaki, Moyize akotaki na Ndako ya kapo ya Litatoli, bongo amonaki ete lingenda ya Aron, oyo ezalaki kolakisa ndako ya Levi, ebimisaki mito ya etape, ebotaki bafololo mpe ezalaki na bambuma ya amande ya kotela. \v 9 Moyize abimisaki mangenda nyonso longwa na liboso ya Yawe mpe amemaki yango na miso ya bato nyonso ya Isalaele. Bamonaki yango mpe moto na moto azwaki lingenda na ye. \p \v 10 Yawe alobaki na Moyize : « Zongisa lingenda ya Aron liboso ya Sanduku ya Litatoli mpo ete ebombama lokola elembo ya kotomboka na bango. Boye, okosukisa koyimayima na bango mpo na Ngai mpo ete bakufa te. » \p \v 11 Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki ye. \p \v 12 Bana ya Isalaele balobaki na Moyize : « Tokufi na biso, tobebi na biso, biso nyonso, tobebi na biso ! \v 13 Moto nyonso oyo akopusana pembeni ya Mongombo na Yawe akokufa. Boni, biso nyonso tokufa ? » \c 18 \s1 Mosala ya Banganga-Nzambe mpe ya Balevi \p \v 1 Yawe alobaki na Aron : « Yo elongo na bana na yo ya mibali mpe libota na yo bokomema mokumba ya masumu oyo ekosalema mpo na kobebisa bosantu ya Esika ya bule ; mpe lisusu yo kaka elongo na bana na yo ya mibali nde bokomema mokumba ya masumu oyo ekosalema na mosala ya bonganga-Nzambe. \v 2 Yeisa pene na yo bandeko na yo ya mibali, Balevi, bato ya libota ya koko na yo, mpo ete basunga yo tango yo elongo na bana na yo ya mibali bokosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya Ndako ya kapo ya Litatoli. \v 3 Bakosunga yo mpe bakosala misala nyonso ya Ndako ya kapo kasi bakopusana te pene ya bisalelo ya Esika ya bule mpe ya etumbelo, noki te bango to bino bokokufa. \v 4 Bakosunga yo mpe bakozala na mokumba ya kobatela Ndako ya kapo ya Bokutani, mosala nyonso ya Ndako ya kapo, mpe moto mosusu te akoki kopusana pene ya esika oyo bozali. \v 5 Bino nde bokozala na mokumba ya kobatela Esika ya bule mpe etumbelo, mpo ete kanda makasi ekweya lisusu likolo ya Isalaele te. \v 6 Tala, Ngai moko nde naponaki bandeko na yo, Balevi, kati na bana ya Isalaele lokola likabo mpo na yo ; babulisami mpo na Yawe mpo na kosala mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 7 Kasi ekozala kaka yo elongo na bana na yo ya mibali nde bokosala mosala lokola Banganga-Nzambe na makambo nyonso oyo etali etumbelo mpe oyo esalemaka na sima ya rido. Nazali kopesa yo mosala ya bonganga-Nzambe lokola likabo. Moto mosusu oyo akopusana pene ya Esika ya bule asengeli kokufa. » \s1 Makabo mpo na Banganga-Nzambe \p \v 8 Bongo Yawe alobaki lisusu na Aron : « Ngai moko napesi yo mokumba ya kobatela makabo oyo babonzeli Ngai. Napesi na yo mpe na bana na yo ya mibali, lokola eteni na bino, makabo nyonso ya bule oyo bana ya Isalaele bapesi Ngai : ezali mobeko ya libela na libela. \v 9 Tala eteni oyo okozwa kati na makabo ya bule oyo eleki kitoko, oyo batumba na moto te : makabo nyonso oyo bakomemela Ngai lokola makabo oyo eleki bule, ezala makabo ya bagato to bambeka mpo na masumu to bambeka nyonso ya kozongisa boyokani ; biteni wana nyonso ekozala mpo na yo elongo na bana na yo. \v 10 Bokolia yango lokola biloko oyo eleki bule, mwana mobali nyonso akolia yango. Bokotala yango lokola eloko ya bule. \p \v 11 Tala lisusu biloko oyo ekozala mpo na yo : biloko nyonso oyo bakobonza kati na makabo oyo ekowuta na maboko ya bana ya Isalaele. Napesi yango epai na yo elongo na bana na yo ya mibali mpe ya basi, lokola mobeko ya libela na libela. Moto nyonso kati na ndako na yo, oyo akozala peto akoki kolia yango. \p \v 12 Napesi yo mafuta nyonso ya olive oyo eleki kitoko, vino ya sika mpe ble oyo bapesi epai na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na bango. \v 13 Bambuma ya liboso ya mokili, oyo bakomema epai na Yawe ekozala mpo na yo. Moto nyonso kati na ndako na yo, oyo akozala peto, akoki kolia yango. \p \v 14 Eloko nyonso, kati na Isalaele, oyo ekokabama epai na Yawe ekozala mpo na yo. \v 15 Mpe lisusu, bana liboso nyonso, ezala ya bato to ya banyama oyo bakomema epai na Yawe bakozala mpo na yo. Kasi osengeli kosikola mwana mobali nyonso ya liboso ya moto to ya nyama ya mbindo. \v 16 Tango bakokokisa sanza moko, osengeli kosikola bango na motuya ya mbongo ya bibende mitano ya palata, oyo moko na moko kati na yango ezali ya bagrame zomi, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. \v 17 Kasi osengeli te kosikola mwana liboso ya ngombe, ya meme to ya ntaba, pamba te ezali bule. Okosopa makila na yango na etumbelo mpe okotumba mafuta na yango lokola likabo bazikisa na moto, likabo ya solo kitoko mpo na Yawe. \v 18 Misuni na yango ekozala mpo na yo, ndenge moko mpe mpo na tolo mpe mopende ya loboko ya mobali oyo batombolaka mpo na kobonzela Ngai. \v 19 Napesi yo elongo na bana na yo ya mibali mpe ya basi, lokola ekateli ya libele na libela, biloko nyonso oyo bana ya Isalaele bakotiaka pembeni mpo na kobonza epai na Yawe lokola makabo ya bule. Ezali boyokani ya seko, oyo ekobongwanaka te liboso ya Yawe mpo na yo mpe bakitani na yo. » \p \v 20 Yawe alobaki na Aron : « Okozwa eteni ya mabele te kati na mokili na bango, mpe okozwa ata bomengo moko te lokola libula kati na bana ya Isalaele, pamba te Ngai moko nde nazali bomengo mpe libula na bino kati na bana ya Isalaele. \s1 Makabo mpo na Balevi \p \v 21 Napesi lokola libula, epai ya Balevi, biteni nyonso ya zomi oyo ekozwama kati na Isalaele lokola lifuti ya mosala oyo basalaka kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 22 Kobanda sik’oyo, bana ya Isalaele basengeli lisusu te kopusana pene ya Ndako ya kapo ya Bokutani, noki te bakomema mokumba ya masumu na bango mpe bakokufa. \v 23 Ezali Balevi nde bazali na mokumba ya kosala mosala na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe ya komema mokumba ya bambeba na bango na kati na yango. Oyo ezali mobeko ya libela mpo na bileko oyo ekoya ya sima. Bakozwa libula moko te elongo na bana ya Isalaele. \v 24 Na esika na yango, napesi epai ya Balevi lokola libula na bango, biteni moko nyonso kati na biteni zomi oyo bana ya Isalaele bakopesa lokola likabo epai na Yawe. Yango wana, nalobaki na tina na bango : ‹ Bakozwa libula moko te elongo na bana ya Isalaele. › » \s1 Eteni ya zomi oyo Balevi basengeli kopesa \p \v 25 Yawe alobaki na Moyize : \v 26 « Loba na Balevi mpe yebisa bango : ‹ Tango bokozwa na maboko ya bana ya Isalaele eteni ya zomi oyo napesi bino lokola libula, bosengeli kopesa eteni ya zomi ya biteni wana ya zomi lokola likabo mpo na Yawe. \v 27 Likabo yango ekozala mpo na bino lokola oyo balongolaka na ble oyo bazali kobuka na elanga mpe na vino ya sika oyo ezali kobima na ekamolelo. \v 28 Na nzela wana nde bino mpe bokobonza makabo epai na Yawe wuta na biteni nyonso ya zomi oyo bokozwa na maboko ya bana ya Isalaele. Mpe wuta na biteni wana ya zomi, bosengeli kopesa eteni ya Yawe epai ya Nganga-Nzambe Aron. \v 29 Kati na makabo nyonso oyo bokozwa, bosengeli kopesa epai na Yawe eteni oyo eleki kitoko mpe eleki bule. › \p \v 30 Loba na Balevi : ‹ Tango bokopesa eteni oyo eleki kitoko, ekotangama mpo na bino lokola bambuma oyo elanga eboti mpe lokola vino oyo ekamolelo ebimisi. \v 31 Bino elongo na mabota na bino, bokolia yango na bisika nyonso, pamba te yango ezali lifuti na bino mpo na mosala na bino kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 32 Na nzela ya kopesa eteni wana oyo eleki kitoko, bokozala na ngambo te na likambo wana, bokobebisa te bosantu ya makabo ya bana ya Isalaele mpe bokokufa te. › » \c 19 \s1 Mayi ya bopetoli \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : \v 2 « Tala malako ya mibeko ya Yawe : Bosenga na bana ya Isalaele ete bamema epai na bino ngombe ya mwasi ya motane ezanga mbeba to litono mpe etikala nanu te komema ekangiseli. \v 3 Bokopesa yango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari. Bongo ye akomema yango na libanda ya molako epai wapi akokata yango kingo na miso na ye. \v 4 Na nzela ya mosapi na ye, Nganga-Nzambe Eleazari akozwa makila ya ngombe yango ya mwasi mpe akosopa yango mbala sambo na ngambo ya ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 5 Bongo bakotumba ngombe ya mwasi na miso na ye : poso, mosuni, makila mpe biloko ya kati. \v 6 Nganga-Nzambe akokamata bakoni ya nzete ya sedele, ya izope, singa ya lino ya motane makasi, mpe akobwaka yango kati na moto oyo ezali kopela mpe ezali kozikisa ngombe ya mwasi. \v 7 Sima na yango, Nganga-Nzambe akosukola na mayi bilamba mpe nzoto na ye liboso ete azonga na molako. Atako bongo, Nganga-Nzambe akozala mbindo kino na pokwa. \v 8 Moto oyo akotumba ngombe akosukola mpe bilamba mpe nzoto na ye ; mpe akozala mbindo kino na pokwa. \p \v 9 Moto ya peto akokamata putulu ya ngombe mpe akotia yango na libanda ya molako na esika ya peto epai wapi bana ya Isalaele bakobatela yango mpo na kobongisa mayi ya bopetolami ; ezali mbeka mpo na masumu. \v 10 Moto oyo akozwa putulu ya ngombe akosukola mpe bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Ekozala mobeko ya libela na libela mpo na bana ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo avandi kati na bango. \p \v 11 Moto nyonso oyo akosimba ebembe ya moto, ata mokufi yango azalaki nani, akozala mbindo mikolo sambo. \v 12 Soki amipetoli na mayi na mokolo ya misato mpe ya minei, akokoma peto ; soki te, akozala kaka mbindo. \v 13 Soki amipetoli te sima na ye kosimba ebembe ya moto, abebisi bosantu ya Mongombo ya Yawe. Basengeli kolongola ye na Isalaele, pamba te basopeli ye te mayi ya bopetoli ; boye akozala kaka mbindo, mbindo na ye ekokangama ye na nzoto. \p \v 14 Tala mobeko oyo ebongi na kosalela soki moto akufi kati na ndako ya kapo : bato nyonso oyo bakokota na ndako ya kapo mpe ba-oyo bakomizalela na kati bakozala mbindo mikolo sambo. \v 15 Sani nyonso ya kofungwama oyo ekozala na mofinuku te na likolo ekozala mbindo. \v 16 Moto nyonso oyo asimbi kati na bilanga ebembe ya moto oyo akufi mpo ete moninga na ye moto abomi ye to akufi na liwa nyonso kaka to mpe asimbi mikuwa ya moto to kunda, akozala mbindo mikolo sambo. \v 17 Mpo na kopetola moto oyo akomi mbindo, bakokamata putulu ya ngombe ya mwasi oyo batumbi na moto lokola mbeka mpo na masumu, bakotia yango na sani mpe bakosopela yango mayi ya etima. \v 18 Moto oyo azali mbindo te akokamata etape ya izope mpe akotia yango kati na mayi, bongo akosalela yango mpo na kobwaka mayi na ndako ya kapo epai wapi moto akufi, na bisalelo mpe na banzoto ya bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako yango ; akosala mpe bongo mpo na moto oyo asimbaki mikuwa, ebembe ya moto oyo moninga na ye moto abomaki to akufaki na liwa nyonso kaka to mpe mpo na moto oyo asimbaki kunda. \v 19 Na mokolo ya misato mpe ya sambo, moto oyo azali mbindo te akobwakela moto ya mbindo. Bongo na mokolo ya sambo, akopetola ye. Moto oyo bapetoli akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi ; boye na pokwa, akokoma peto. \p \v 20 Kasi soki moto oyo amikomisaki mbindo amipetoli, bakolongola ye kati na lisanga ; pamba te akomisi mbindo Esika ya bule ya Yawe. Mpe lokola basopeli ye te mayi ya bopetoli na nzoto, akozala mbindo. \v 21 Ekozala mpo na bango mobeko ya libela na libela. \p Moto oyo akobwaka mayi ya bopetoli akosukola bilamba na ye, mpe moto oyo akosimba mayi yango akozala mbindo kino na pokwa. \v 22 Eloko nyonso oyo moto ya mbindo akosimba ekokoma mbindo, mpe moto nyonso oyo asimbi eloko yango akokoma mbindo kino na pokwa. » \c 20 \ms1 Wuta na Kadeshi kino na bitando ya Moabi \s1 Na Meriba, bato batombokeli Moyize mpe Aron \p \v 1 Na sanza ya liboso, lisanga mobimba ya Isalaele ekomaki na esobe ya Tsini mpe bavandaki na Kadeshi. Ezalaki kuna nde Miriami akufaki mpe bakundaki ye. \p \v 2 Nzokande esika yango ezalaki na mayi ya komela te mpo na lisanga ya Isalaele, mpe bato basanganaki mpo na kotombokela Moyize mpe Aron. \v 3 Baswanisaki Moyize mpe balobaki : « Elingaki kozala malamu soki tokufaki na biso tango bandeko na biso bakufaki liboso ya Yawe ! \v 4 Mpo na nini omemaki lisanga ya Yawe na esobe oyo ? Ezali mpo ete biso mpe bibwele na biso tokufa awa ? \v 5 Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito mpe omemi biso na esika oyo ya pasi, esika oyo bakoki kutu kolona ata eloko moko te, esika oyo ezanga ata mbuma ya figi to ya vino to mpe ya grenade, esika oyo ezanga kutu ata mayi ya komela ? » \p \v 6 Moyize mpe Aron babimaki kati ya lingomba mpe bakendeki na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, bakweyaki elongi kino na mabele, mpe nkembo ya Yawe ebimelaki bango. \p \v 7 Yawe alobaki na Moyize : \v 8 « Zwa lingenda na yo ; bongo elongo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bosangisa lisanga mobimba esika moko. Boloba na libanga wana na miso na bango, mpe ekobimisa mayi wuta na yango. Okobimisa mayi na libanga mpo ete bato ya lisanga mobimba bakoka komela elongo na bibwele na bango. » \p \v 9 Moyize azwaki lingenda oyo ezalaki liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye. \v 10 Ye mpe Aron basangisaki lisanga ya bato esika moko liboso ya libanga, mpe Moyize alobaki na bango : « Boyoka, bino batomboki, tokoki kobimisela bino mayi na libanga oyo ? » \p \v 11 Moyize atombolaki loboko na ye mpe abetaki lingenda na ye na libanga mbala mibale. Mayi ebimaki ; bongo lisanga mobimba elongo na bibwele na bango bamelaki. \p \v 12 Kasi Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Lokola bondimeli Ngai te mpe bopesi lokumu na bosantu na Ngai te na miso ya bana ya Isalaele, bokokotisa lisusu lingomba oyo te na mokili oyo napesi bango. » \p \v 13 Ezalaki mayi ya Meriba epai wapi bana ya Isalaele baswanaki na Yawe, mpe epai wapi Yawe alakisaki bosantu na Ye kati na bango. \s1 Mokonzi ya Edomi aboyi kolekisa bana ya Isalaele \p \v 14 Wuta na Kadeshi, Moyize atindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi mpe alobaki : \pm — Tala maloba oyo ndeko na yo, Isalaele, alobi : « Oyebi pasi nyonso oyo ekomelaki biso. \v 15 Bakoko na biso bakendeki na Ejipito mpe tokomaki kovanda kuna mibu ebele. Bato ya Ejipito banyokolaki biso elongo na bakoko na biso ; \v 16 kasi tango togangaki epai na Yawe, ayokaki kolela na biso, atindelaki biso anjelu oyo abimisaki biso na Ejipito. \pm Sik’oyo tozali awa na kadeshi, engumba oyo ezali na suka ya mokili na yo. \v 17 Tobondeli yo, tika biso tolekela na mboka na yo. Tokokota na elanga to na elanga ya vino moko te mpe tokomela mayi ya mabulu na bino te. Tokotambola kaka pembeni-pembeni ya nzela ya monene ya mokonzi bongo, tokokatisa ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi te, kino tokosilisa kokatisa mokili na yo. » \p \v 18 Kasi mokonzi ya Edomi azongiselaki ye : \pm — Okoki kolekela na mokili na ngai te ; soki omeki, tokobimela bino mpe tokobundisa bino na mopanga. \p \v 19 Bana ya Isalaele bazongiselaki ye : \pm — Tokotambola kaka pembeni-pembeni ya nzela ya monene mpe soki biso to bibwele na biso tomeli mayi na bino, tokofuta yango. Tolingi kaka eloko moko, eloko mosusu te : toleka kaka na makolo. \p \v 20 Azongiselaki bango lisusu : \pm — Bokoki kolekela awa te. \p Boye, bato ya Edomi babimelaki bango na mampinga monene ya basoda mpo na kobundisa bana ya Isalaele. \v 21 Lokola Edomi eboyaki ete bana ya Isalaele balekela na etuka na yango, bana ya Isalaele bazwaki nzela mosusu. \s1 Kufa ya Aron \p \v 22 Lisanga mobimba ya Isalaele babimaki wuta na Kadeshi mpe bakomaki kino na ngomba Ori. \v 23 Bongo, Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na ngomba Ori, pembeni ya mondelo ya Edomi : \v 24 « Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, pamba te akokota te na mokili oyo napesi bana ya Isalaele, mpo ete bino mibale botombokelaki mitindo na Ngai na mayi ya Meriba. \v 25 Kamata Aron na Eleazari, mwana na ye ya mobali mpe mema bango likolo ya ngomba Ori. \v 26 Longola Aron bilamba na ye mpe latisa yango Eleazari, mwana na ye ya mobali, pamba te Aron alingi kokende kokutana na bakoko na ye, akokufa kuna. » \p \v 27 Moyize asalaki ndenge kaka Yawe atindaki : bamataki likolo ya ngomba Ori na miso ya lisanga mobimba. \v 28 Moyize alongolaki Aron bilamba mpe alatisaki yango Eleazari, mwana na ye ya mobali. Mpe Aron akufa kuna na likolo ya ngomba. Boye, Moyize mpe Eleazari bakitaki ngomba ; \v 29 mpe tango lingomba mobimba eyokaki sango ete Aron asilaki kokufa, bato nyonso ya Isalaele basalelaki ye matanga ya mikolo tuku misato. \c 21 \s1 Isalaele alongi mokonzi ya Aradi \p \v 1 Tango moto ya mboka Kanana, mokonzi ya Aradi, oyo azalaki kovanda na Negevi ayokaki ete Isalaele azali koya pembeni ya nzela ya Atarimi, abundisaki bana ya Isalaele mpe akangaki bamosusu kati na bango na boloko. \v 2 Boye, bana ya Isalaele balapaki ndayi oyo epai na Yawe : « Soki okabi bato oyo na maboko na biso, tokobebisa bingumba na bango nyonso. » \p \v 3 Yawe ayokaki kolela ya bana ya Isalaele mpe apesaki bango elonga likolo ya bato ya mboka Kanana elongo na bingumba na bango. Yango wana, babengaka esika yango « Orima » oyo elingi koloba : kobebisama. \s1 Moyize atelemisi nyoka ya ebende \p \v 4 Bana ya Isalaele batikaki ngomba Ori mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela ya ebale monene ya Barozo, mpo na kokima mokili ya Edomi. Kasi bato bakokaki lisusu te kokanga motema na nzela. \v 5 Batombokelaki Nzambe mpe Moyize, balobaki : « Mpo na nini boye ! Bobimisaki biso na Ejipito mpo ete toya kokufa na esobe ? Bilei ezali te, mayi ezali te mpe tolembi kolia bilei oyo ya pamba-pamba ! » \p \v 6 Bongo Yawe atindelaki bango banyoka ya ngenge oyo ekomaki koswa bato mpe bana ya Isalaele ebele bakufaki. \v 7 Bato bayaki epai ya Moyize mpe balobaki : « Tosalaki masumu tango totombokelaki Yawe mpe totombokelaki yo. Bondela Yawe ete alongola mosika na biso banyoka oyo. » \p Boye, Moyize abondelaki mpo na bato. \p \v 8 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Salisa nyoka moko ya ebende mpe telemisa yango likolo ya nzete mpo ete moto nyonso oyo aswami, atala yango mpe abika. \p \v 9 Boye, Moyize asalisaki nyoka moko ya ebende mpe atelemisaki yango na likolo ya nzete. Boye moto nyonso oyo nyoka eswaki, bongo atalaki nyoka ya ebende, abikaki. \s1 Bana ya Isalaele bakei kino na Pisiga \p \v 10 Bana ya Isalaele balongwaki wana mpe bakendeki kotonga molako na bango na Oboti. \v 11 Kolongwa na Oboti bakendeki kotonga molako na bango na Iye-Abarimi, na esobe oyo etalana na Moabi, na ngambo oyo moyi ebimaka. \v 12 Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na lubwaku ya Zeredi. \v 13 Kolongwa wana, bakendeki kotonga molako na bango na ngambo mosusu ya Arinoni, mayi oyo elekela na esobe, wuta na etuka ya mokili ya bato ya Amori. Mayi ya Arinoni ezalaki na mondelo ya Moabi, na kati-kati ya mokili ya Moabi mpe ya Amori. \v 14 Yango wana, buku ya bitumba ya Yawe eloba : \q1 « Wahebi kati na Sufa mpe miluka na yango, \q2 Arinoni \v 15 mpe nzela ya miluka ya mabwaku \q1 oyo ekenda kino na engumba Ari \q2 mpe elekela pembeni-pembeni ya mondelo ya Moabi. » \m \v 16 Kolongwa wana, bakobaki kokende kino na Beri oyo ezalaki libulu ya mayi epai wapi Yawe alobaki na Moyize : « Sangisa bato esika moko mpo ete nakopesa bango mayi. » \p \v 17 Boye, bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo : \q1 « Oh libulu, bimisa mayi ! \q1 Boyembela yango ! \q1 \v 18 Libulu oyo bana bakonzi batimola, \q2 oyo bato minene batobola \q2 na mangenda mpe banzete na bango. » \m Kolongwa na esobe, bakendeki kino na Matana ; \v 19 kolongwa na Matana bakendeki na Naalieli, kolongwa na Naalieli bakendeki kino na Bamoti ; \v 20 mpe kolongwa na Bamoti bakendeki kino na lubwaku ya Moabi, na songe ya ngomba Pisiga, oyo eleki molayi na esobe. \s1 Bana ya Isalaele balongi Sikoni mpe Ogi \p \v 21 Bana ya Isalaele batindaki bantoma mpo na koyebisa Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori : \pm \v 22 « Tika biso tolekela na mokili na yo. Tokokota te na elanga to na elanga ya vino moko, mpe tokomela te mayi ya mabulu na bino ; tokoleka kaka na nzela ya monene ya mokonzi kino tokosilisa kokatisa mokili na yo. » \p \v 23 Kasi Sikoni aboyaki kopesa bana ya Isalaele nzela ya kolekela na mokili na ye ; asangisaki mampinga na ye nyonso ya basoda mpe abimaki na esobe mpo na kobundisa Isalaele. Abundisaki Isalaele tango akomaki na Yakatsi. \v 24 Kasi Isalaele alongaki ye mpe akamataki mokili na ye wuta na Arinoni kino na Yaboki, mpe lisusu kino na mokili ya bato ya Amoni, mpo ete bazalaki kokengela mondelo yango makasi. \v 25 Isalaele abotolaki bingumba nyonso ya bato ya Amori mpe bakomaki kovanda kati na yango, bakisa Eshiboni mpe bamboka mike na yango nyonso ya zingazinga. \v 26 Eshiboni ezalaki engumba oyo Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo abundisaki mokonzi ya kala ya Moabi mpe abotolaki na maboko na ye mokili nyonso, kino na Arinoni. \p \v 27 Yango wana balobaka na masese : \q1 « Boya na Eshiboni ! \q2 Tika ete etelema lisusu ! \q2 Tika ete engumba Sikoni etongama lisusu ! \b \q1 \v 28 Moto ebimaki wuta na Eshiboni, \q2 ndemo ya moto ebimaki wuta na engumba ya Sikoni, \q2 etumbaki Ari ya Moabi, bavandi ya bangomba ya Arinoni. \q1 \v 29 Oh Moabi, mawa na yo ! \q2 Oh bato ya Kemoshi, bobebisami ! \q1 Bakomisaki bana na ye ya mibali bakimi ; \q2 mpe bana basi na ye, bakangami \q2 ya mokonzi Sikoni, mokonzi ya Amori. \b \q1 \v 30 Kasi tolongi bango ; \q2 Eshiboni nyonso ebebisami kino na Diboni, \q1 topanzi yango nyonso kino na Nofaki, \q2 mpe kino na Medeba. » \p \v 31 Boye Isalaele avandaki na mokili ya bato ya Amori. \v 32 Sima na yango, Moyize atindaki banongi na Yaezeri, bana ya Isalaele babotolaki bamboka ya mike-mike oyo ya zingazinga na yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna. \p \v 33 Boye bana ya Isalaele babalukaki mpe bakendeki pembeni-pembeni ya nzela oyo ekenda kino na Bashani. Ogi, mokonzi ya Bashani, elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kokutana na bango mpe kobundisa bango na Edreyi. \v 34 Bongo Yawe alobaki na Moyize : « Kobanga ye te, pamba te nakabi ye elongo na mampinga na ye nyonso mpe mokili na ye na maboko na yo ; sala ye ndenge osalaki Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni. » \p \v 35 Boye, bana ya Isalaele babomaki ye elongo na bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso ; batikaki ata moto moko te na bomoi, mpe bakamataki mokili na ye. \c 22 \ms1 Masakoli ya Balami \s1 Balaki abengisi Balami \p \v 1 Bana ya Isalaele batambolaki mobembo na bitando ya Moabi mpe batongaki molako na bango pembeni-pembeni ya ebale Yordani, oyo ezalaki etalana na Jeriko. \v 2 Boye Balaki, mwana mobali ya Tsipori, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo bana ya Isalaele basalaki bato ya Amori. \v 3 Mpe bato ya Moabi bakomaki kobanga makasi mpo ete bana ya Isalaele bazalaki ebele penza. Boye, bakomaki na somo mingi liboso ya bana ya Isalaele. \v 4 Bongo bato ya Moabi balobaki na bakambi ya Madiani : « Ebele ya bato oyo bazali koya mpo na kobebisa biloko nyonso oyo ezingeli biso lokola ngombe oyo ezali kolia matiti ya elanga. » \p Na tango wana, ezalaki Balaki, mwana mobali ya Tsipori, nde azalaki mokonzi ya Moabi. \v 5 Atindaki bantoma kobenga Balami, mwana mobali ya Beori, oyo azalaki kovanda na Petori, pembeni ya ebale Efrate, mboka oyo ye abotama. Balaki alobaki na Balami : \pm — Bato moko bawuti kobima na Ejipito, batondisi mokili mobimba mpe bayei sik’oyo kovanda pembeni na ngai. \v 6 Nabondeli yo, yaka kolakela bango mabe, pamba te bazali makasi mingi koleka ngai, tango mosusu nakokoka kolonga bango mpe kobengana bango na mboka. Pamba te nayebi ete bato oyo opamboli, bapambolamaka ; mpe ba-oyo olakeli mabe, balakelamaka mpe mabe. \p \v 7 Bakambi ya Moabi mpe ya Madiani bakendeki mpe bamemaki makabo mpo na kopesa na Balami, momoni makambo. Tango bakomaki epai ya Balami, bayebisaki ye makambo oyo Balaki atindaki. \p \v 8 Balami alobaki na bango : \pi1 — Bolekisa butu awa, mpe nakozongisela bino eyano oyo Yawe akopesa ngai. \p Boye bakambi ya Moabi bavandaki elongo na ye. \p \v 9 Nzambe ayaki epai ya Balami mpe atunaki ye : \pi1 — Bato oyo bazali epai na yo bazali banani ? \p \v 10 Balami alobaki na Nzambe : \pi1 — Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi, atindeli ngai maloba oyo : \v 11 « Bato moko bawuti kobima na Ejipito mpe batondisi mokili mobimba. Sik’oyo yaka mpe lakela bango mabe mpo na ngai. Tango mosusu nakokoka kobundisa bango mpe kobengana bango. » \p \v 12 Kasi Nzambe alobaki na Balami : \pi1 — Kokende elongo na bango te. Okoki kolakela bato wana mabe te, pamba te bazali bato bapambolama. \p \v 13 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balami alamukaki mpe alobaki na bakambi ya Balaki : \pi1 — Bozonga na mboka na bino, pamba te Yawe aboyi ete nakende elongo na bino. \p \v 14 Boye, bakambi ya Moabi bazongaki epai ya Balaki mpe balobaki : \pi1 — Balami aboyi koya elongo na biso. \p \v 15 Balaki atindaki bakambi mosusu oyo bazalaki mingi mpe na lokumu koleka bakambi oyo atindaki liboso. \v 16 Bakomaki epai ya Balami mpe balobaki : \pm — Tala liloba oyo Balaki, mwana ya mobali ya Tsipori alobi : « Tika ete eloko moko te epekisa yo koya epai na ngai ! \v 17 Pamba te nakopesa yo lifuti ya malamu mpe nakosala nyonso oyo okoloba. Yaka penza mpe lakela bato oyo mabe mpo na ngai. » \p \v 18 Kasi Balami azongiselaki bango : \pi1 — Ezala soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakokoka kosala eloko moko te ya monene to ya moke oyo ekokende libanda ya mibeko ya Yawe, Nzambe na ngai. \v 19 Bino mpe lisusu bolekisa butu awa ndenge bandeko na bino basalaki, mpo ete naluka koyeba lisusu likambo oyo Yawe akoyebisa na ngai. \p \v 20 Na butu wana, Nzambe ayaki epai na Balami mpe alobaki : \pi1 — Lokola bato oyo bayei mpo na kobenga yo, kende elongo na bango. Kasi sala kaka makambo oyo nakoyebisa yo. \s1 Ane etelemeli Balami \p \v 21 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balami alamukaki, abongisaki ane na ye ya mwasi mpe akendeki elongo na bakambi ya Moabi. \p \v 22 Kasi tango akendeki, Nzambe asilikaki makasi mpe anjelu ya Yawe atelemaki na nzela mpo na kokanga ye nzela tango azalaki kotambola likolo ya ane elongo na basali na ye mibale. \v 23 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe atelema na kati-kati ya nzela na mopanga ya minu na loboko na ye, ane ebimaki na nzela mpe ekimaki na elanga. Boye, Balami abetaki ane mpo ete ekoka kozonga na nzela. \v 24 Mpe lisusu, anjelu ya Yawe akendeki kotelema na nzela moko ya moke, oyo elekela na kati-kati ya bilanga mibale ya vino, oyo mopanzi moko na moko na yango ezalaki lokola na bamir mibale. \v 25 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe, epusanaki pembeni ya mir, efinaki lokolo ya Balami na mir. Balami abetaki yango lisusu. \v 26 Anjelu ya Yawe alekaki liboso na bango mpe akendeki kotelema na esika moko ya moke penza, epai wapi nzela ya kobalukela na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi ezali te. \v 27 Tango ane emonaki anjelu ya Yawe, evandelaki Balami, nkolo na yango. Balami atombokaki makasi mpe akomaki kobamba ane lingenda na ye. \v 28 Bongo, Yawe afungolaki monoko ya ane, mpe elobaki na Balami : \pi1 — Likambo nini nasali yo mpo ete okoka kobeta ngai mbala misato ? \p \v 29 Balami azongiselaki ane : \pi1 — Ozali kosakana na ngai ! Soki nazalaki na mopanga na loboko na ngai, mbele nabomi yo kaka sik’oyo ! \p \v 30 Ane elobi na Balami : \pi1 — Boni, nazali ane na yo te oyo osalelaka tango nyonso kino na mokolo ya lelo ? Nazalaka solo na momesano ya kosalela yo makambo ya boye ? \p Balami azongisaki : \pi1 — Te ! \p \v 31 Boye, Yawe afungolaki miso ya Balami, mpe Balami amonaki anjelu ya Yawe atelema na nzela, na mopanga na ye ya monene. Bongo, Balami afukamaki mpe akweyaki elongi kino na mabele. \p \v 32 Anjelu ya Yawe atunaki ye : \pi1 — Mpo na nini obeti ane na yo mbala misato ? Nayaki awa mpo na kokanga yo nzela, pamba te nzela na yo ezali mabe liboso na Ngai. \v 33 Ane emonaki Ngai mpe ekimaki Ngai mbala misato. Soki ekimaki Ngai te, solo penza, nalingaki koboma yo, kasi nalingaki kotika yango na bomoi. \p \v 34 Balami alobaki na anjelu ya Yawe : \pi1 — Nasali masumu. Nayebaki te ete otelemaki na nzela mpo na kokanga ngai nzela. Kasi soki osepeli na mobembo oyo te, nakozonga na ngai. \p \v 35 Anjelu ya Yawe alobaki na Balami : \pi1 — Kende elongo na bato oyo kasi okoloba kaka makambo oyo nakoloba na yo. \p Boye, Balami akendeki elongo na bakambi ya Balaki. \s1 Balami akutani na Balaki \p \v 36 Tango Balaki ayokaki sango ete Balami azali koya, akendeki kokutana na ye na engumba ya bato ya Moabi, oyo ezalaka na mondelo ya Arinoni, na suka ya mokili na ye. \v 37 Balaki alobaki na Balami : \pi1 — Boni, natindaki te bato na lombangu mpo na kobenga yo ? Mpo na nini oyaki epai na ngai te ? Okanisaki ete nazangi makoki ya kofuta yo ? \p \v 38 Balami azongiselaki Balaki : \pi1 — Malamu, nayei sik’oyo epai na yo. Kasi nakoki solo koloba na yo kaka likambo moko ? Nakoloba kaka makambo oyo Nzambe akotia na monoko na ngai. \p \v 39 Boye, Balami akendeki nzela moko na Balaki kino na Kiriati-Utsoti. \v 40 Balaki abonzaki mbeka ya ngombe mpe ya meme, apesaki ndambo epai ya Balami mpe ndambo mosusu epai ya bakambi oyo bazalaki na ye elongo. \p \v 41 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Balaki amemaki Balami, mpe bamataki na Bamoti-Bala ; mpe wuta kuna, bakokaki komona ndambo ya bana ya Isalaele. \c 23 \s1 Balami apamboli Isalaele mpo na mbala ya liboso \p \v 1 Balami alobaki na Balaki : « Tongela ngai bitumbelo sambo awa mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo. » \p \v 2 Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe bango mibale babonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko. \v 3 Alobaki na Balaki : « Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, bongo ngai napusani mwa mosika. Tango mosusu Yawe akoya kokutana na ngai, bongo nakoyebisa yo makambo nyonso oyo akolakisa ngai. » \p Balami akendeki likolo ya ngomba moko ya mokuse mpe ezanga matiti. \v 4 Nzambe akutanaki na Balami, mpe Balami alobaki : \pi1 — Nabongisaki bitumbelo sambo ; mpe na etumbelo moko na moko, nasili kobonza ngombe ya mobali mpe meme ya mobali moko. \p \v 5 Yawe atiaki maloba na monoko ya Balami mpe alobaki : \pi1 — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo. \p \v 6 Bongo Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi. \v 7 Boye, Balami akomaki koloba maloba oyo : \q1 « Balaki abengisaki ngai wuta na Arami, \q2 mokonzi ya Moabi abengisaki ngai \q1 wuta na bangomba ya este. \q2 Alobaki : ‹ Yaka, lakela Jakobi mabe mpo na ngai ; \q2 yaka, loba mabe mpo na Isalaele. \q1 \v 8 Ndenge nini nakoki solo kolakela mabe \q2 bato oyo Nzambe alakela mabe te ? \q1 Ndenge nini nakoki solo koloba mabe \q2 mpo na bato oyo Yawe alobela mabe te ? \q1 \v 9 Tala, wuta na likolo ya mabanga, \q2 nazali komona bango ; \q1 wuta na likolo ya bangomba, \q2 nazali kotala bango. \q1 Tala, nazali komona bato moko bavanda bango moko, \q2 bazali komitanga na molongo ya bikolo te. \q1 \v 10 Nani akoki kotanga putulu ya Jakobi \q2 to kotanga motango ya bakitani ya Isalaele ? \q1 Tika ete nakufa kufa ya bato ya sembo, \q2 mpe tika ete suka na ngai ezala lokola ya bango ! › » \p \v 11 Balaki alobaki na Balami : \pi1 — Likambo nini osali ngai ? Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe ; kasi tala, opamboli bango koleka. \p \v 12 Balami azongisaki : \pi1 — Boni, naloba te maloba oyo Yawe atie na monoko na ngai ? \s1 Balami apamboli Isalaele mpo na mbala ya mibale \p \v 13 Balaki alobaki na Balami : \pi1 — Yaka elongo na ngai esika mosusu, epai okoki komona bango ; okomona bango nyonso te, kasi kaka ndambo. Mpe wuta na esika yango, lakela bango mabe mpo na ngai. \p \v 14 Boye, Balaki amemaki Balami na elanga ya Tsofimi, na songe ya ngomba Pisiga, mpe atongaki kuna bitumbelo sambo mpe abonzaki bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali wana na etumbelo moko na moko. \p \v 15 Balami alobaki na Balaki : \pi1 — Telema awa, pembeni ya mbeka na yo, wana ngai nakopusana mwa mosika mpo na kokutana na ye. \p \v 16 Yawe akutanaki na Balami, atiaki maloba na monoko na ye mpe alobaki : \pi1 — Zonga epai ya Balaki mpe yebisa ye maloba oyo. \p \v 17 Bongo, Balami azongaki epai ya Balaki mpe akutaki ye atelemi pembeni ya mbeka na ye, elongo na bakambi nyonso ya Moabi. Balaki atunaki ye : \pi1 — Yawe alobi nini ? \p \v 18 Bongo Balami akomaki koloba maloba oyo : \q1 « Balaki, telema mpe yoka ! \q2 Mwana mobali ya Tsipori, yoka ngai malamu ! \q1 \v 19 Nzambe azali moto te mpo ete akosa, \q2 azali mpe mwana ya moto te mpo ete akoka kobongola makanisi na Ye. \q1 Boni, akoki solo koloba mpe kosala eloko moko te ? \q2 Akoki solo kopesa elaka mpe kokokisa yango te ? \q1 \v 20 Nazwaki nde mokumba ya kopambola. \q2 Asila kopambola, mpe ngai nakokoka kobongola te. \b \q1 \v 21 Amonaka mbeba moko te epai ya Jakobi, \q2 amonaka minyoko te kati na Isalaele. \q1 Yawe, Nzambe na bango, azali elongo na bango ; \q2 koganga ya mokonzi ezalaka kati na bango. \q1 \v 22 Nzambe abimisaki bango na Ejipito ; \q2 bazalaka makasi lokola mpakasa. \q1 \v 23 Elakeli mabe moko te ekoki kozwa Jakobi, \q2 mpe kindoki ezali na nguya te likolo ya Isalaele. \q1 Bakoloba sik’oyo mpo na Jakobi mpe Isalaele : \q2 ‹ Tala makambo oyo Nzambe asali ! › \q1 \v 24 Bato oyo batelemi lokola nkosi ya mwasi ; \q2 epemaka te soki epasoli te mosuni na yango \q2 mpe emeli te makila ya nyama oyo ekangi. » \p \v 25 Bongo Balaki alobaki na Balami : \pi1 — Ezala soki okoki te kolakela bango mabe, kasi kopambola bango te. \p \v 26 Balami azongiselaki Balaki : \pi1 — Nayebisaki yo te ete nakosala kaka makambo oyo Yawe akoloba na ngai ? \s1 Balami apamboli Isalaele mpo na mbala ya misato \p \v 27 Balaki alobaki na Balami : \pi1 — Yaka, tika ete namema yo esika mosusu ! Tango mosusu Nzambe akosepela ete olakela bango mabe mpo na ngai wuta na esika yango. \p \v 28 Balaki amemaki Balami na likolo ya ngomba Peori, esika oyo emonisaka esobe mobimba. \p \v 29 Balami alobaki na Balaki : \pi1 — Tongela ngai bitumbelo sambo mpe bongisela ngai bangombe ya mibali mpe bameme ya mibali sambo. \v 30 Balaki asalaki ndenge Balami alobaki, mpe abonzaki ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali na etumbelo moko na moko. \c 24 \p \v 1 Nzokande, tango Balami amonaki ete Yawe azalaki kaka na esengo ya kopambola Isalaele, alukaki lisusu bimoniseli te ndenge azalaki kosala na bambala mosusu, kasi abalolaki elongi na ye na esobe. \v 2 Tango Balami atalaki, amonaki Isalaele bavanda na milako na bango, bato na bato na libota na bango. Molimo na Nzambe ayaki likolo na ye ; \v 3 mpe akomaki koloba maloba oyo : \q1 « Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori, \q2 maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele, \q1 \v 4 maloba ya moto oyo ayokaka maloba ya Nzambe, \q2 oyo amonaka bimoniseli oyo ewutaka epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, \q2 oyo miso na ye efungwamaka soki akweyi na molimo : \q1 \v 5 ‹ Oh Jakobi, tala ndenge bandako na yo ya kapo ezali kitoko, \q2 mpe bisika oyo ovandaka, oh Isalaele ! \b \q1 \v 6 Epanzana lokola miluka ya mike-mike, \q2 lokola bilanga oyo ezalaka pembeni ya ebale, \q1 lokola banzete ya aloe oyo Yawe alona, \q2 lokola banzete ya sedele pembeni ya mayi. \q1 \v 7 Mayi ekotiola wuta na bibombelo na bango, \q2 bankona na bango ekozwa mayi ebele. \b \q1 Mokonzi na bango akozala monene koleka Agagi, \q2 bokonzi na bango ekozala ya lokumu. \b \q1 \v 8 Nzambe abimisaki bango na Ejipito, \q2 bazalaka makasi lokola mpakasa, \q1 babebisaka bikolo oyo ebundisaka bango \q2 mpe babukaka mikuwa na bango na biteni-biteni, \q2 batobolaka yango na makonga na bango. \q1 \v 9 Bagunzamaka mpe balalaka lokola nkosi ya mobali, \q2 lokola nkosi ya mwasi ; \q2 nani akokoka kotelemisa bango ? \b \q1 Tika ete oyo akopambola yo apambolama, \q2 mpe oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ! › » \p \v 10 Balaki atombokelaki Balami makasi. Abetaki maboko na ye mpe alobaki : \pi1 — Nabengisaki yo mpo ete olakela banguna na ngai mabe, kasi yo opamboli bango mbala misato. \v 11 Yango wana, longwa na miso na ngai mpe zonga na mboka na yo ! Nalobaki ete nakopesa yo lifuti ya malamu, kasi Yawe azangisi yo lifuti yango. \p \v 12 Balami azongiselaki Balaki : \pi1 — Boni, nalobaki te na bantoma oyo otindelaki ngai ete \v 13 « Ata soki Balaki apesi ngai palata mpe wolo oyo etondi na ndako na ye, nakosala eloko moko te na mokano na ngai moko, ezala ya malamu to ya mabe, mpo ete nakende libanda ya mitindo na Yawe te. Nasala kaka oyo Yawe alobi. » \v 14 Mpe sik’oyo, nazali kozonga na ngai epai ya bato na ngai ; kasi yaka, nakokebisa yo na tina na makambo oyo bato oyo bakosala bato na yo na mikolo ekoya. \s1 Balami apamboli Isalaele mpo na mbala ya minei \p \v 15 Bongo Balami alobaki maloba oyo : \q1 « Tala maloba ya Balami, mwana mobali ya Beori, \q2 maloba ya moto oyo miso na ye emonaka polele, \q1 \v 16 oyo ayokaka maloba na Nzambe, \q2 oyo ayebaka basekele ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo, \q1 oyo azwaka emoniseli kowuta na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, \q2 oyo soki akweyi na molimo, miso na ye efungwamaka : \q1 \v 17 ‹ Namoni ye, kasi sik’oyo te ; \q2 natali ye, kasi na pembeni te. \q1 Monzoto moko ekobima wuta na Jakobi, \q2 mpe lingenda ekobima wuta na Isalaele. \q1 Akotobola mito ya bato ya Moabi \q2 mpe akoboma bana mibali nyonso ya Seti. \q1 \v 18 Bakobotola mokili ya Edomi, \q2 bakobotola Seiri, monguna na ye, \q2 kasi Isalaele akokoma lisusu makasi koleka. \q1 \v 19 Mokonzi moko akobima wuta na Jakobi, \q2 mpe akoboma batikali nyonso ya engumba. › » \s1 Maloba ya suka ya Balami \p \v 20 Balami amonaki Amaleki mpe alobaki maloba oyo : \q1 « Amaleki ezalaki na molongo ya liboso kati na bikolo, \q2 kasi ekosuka na libebi. » \p \v 21 Sima, amonaki bato ya Keni mpe alobaki maloba oyo : \q1 « Esika na yo ya kovanda ezali makasi, \q2 zala na yo ezalaka kati na mabanga ; \q1 \v 22 kasi bino bato ya Keni, bokobebisama \q2 tango Ashuri akozwa bino lokola bakangami. » \p \v 23 Mpe na suka, alobaki maloba oyo : \q1 « Oh mawa ! Nani akoki kozala na bomoi, \q2 wana Nzambe akozala kosala makambo ya boye ? \q1 \v 24 Bamasuwa ekoya wuta na mabongo ya Kitimi, \q2 bakonyokola Ashuri mpe Eberi, \q2 kasi bango moko mpe bakobebisama. » \p \v 25 Bongo Balami atelemaki mpe azongaki epai na ye, Balaki mpe akendeki na nzela na ye. \c 25 \s1 Bana ya Isalaele bapengwi na etando ya Moabi \p \v 1 Wana bana ya Isalaele bavandaki nanu na Shitimi, bamipesaki na kindumba na bilenge basi ya Moabi. \v 2 Mpe, bilenge basi yango bazalaki kobenga bango na milulu ya mbeka oyo babonzelaka banzambe na bango. Mpe bana ya Isalaele bazalaki kolia mpe kogumbamela banzambe yango. \v 3 Bongo, bana ya Isalaele bamipesaki na kosambela Bala ya Peori mpe, kanda ya Yawe epelaki makasi mpo na bango. \p \v 4 Yawe alobaki na Moyize : « Kanga bakambi nyonso ya Isalaele mpe diembika bango liboso na Ngai, na se ya moyi, mpo ete kanda makasi na Yawe elongwa likolo ya Isalaele. » \p \v 5 Moyize alobaki na bakambi ya Isalaele : « Tika ete moko na moko kati na bino aboma bato na ye oyo bamipesi na kosambela nzambe Bala ya Peori. » \p \v 6 Bongo moto moko ya Isalaele amemaki na libota na ye mwasi moko ya ekolo ya Madiani liboso ya Moyize mpe ya lisanga mobimba ya bana ya Isalaele, wana bazalaki kolela na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 7 Tango Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron amonaki bongo, abimaki kati na lisanga mpe akamataki mopanga ; \v 8 alandaki moto ya Isalaele wana kino kati na ndako na ye ya kapo mpe atobolaki bango mibale mabumu mpe bakufaki, ezala moto ya Isalaele wana mpe mwasi wana. Mpe etumbu oyo ezalaki likolo ya Isalaele esilaki. \v 9 Bato oyo bakufaki na etumbu wana bazalaki, bato nkoto tuku mibale na minei. \p \v 10 Yawe alobaki na Moyize : \v 11 « Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, asili kolongola kanda na Ngai likolo ya bana ya Isalaele, pamba te atalisi bolingo oyo eleka ndelo mpo na lokumu na Ngai kati na bango ; yango wana, na kanda na Ngai ya makasi, nasilisaki koboma bana ya Isalaele te. \v 12 Na boye, yebisa ye ete nasili kosala boyokani ya kimia elongo na ye. \v 13 Boyokani yango ekozala mpo na ye mpe mpo na bakitani na ye, mpo ete basala mosala na Ngai ya Bonganga-Nzambe mpo na libela, pamba te atalisi bolingo oyo eleka ndelo mpo na lokumu ya Nzambe na ye, mpe asali mosala ya bolimbisi masumu mpo na bana ya Isalaele. » \p \v 14 Kombo ya moto ya Isalaele oyo babomaki elongo na mwasi ya Madiani ezalaki Zimiri, mwana mobali ya Salu, mokambi ya libota ya Simeoni ; \v 15 mpe oyo ya mwasi ya Madiani ezalaki Kozibi, mwana mwasi ya Tsuri, mokambi ya libota moko ya ekolo ya Madiani. \p \v 16 Yawe alobaki na Moyize : \v 17 « Kamata bato ya Madiani lokola banguna mpe boma bango, \v 18 pamba te bakamataki bino lokola banguna mpe basalelaki mayele mabe mpo na kokweyisa bino, na likambo ya Peori mpe ya ndeko na bango ya mwasi, Kozibi, mwana mwasi ya moko kati na bakambi ya Madiani, oyo babomaki na tango ya etumbu kati na likambo ya Peori. » \c 26 \ms1 Mabongisi mpo na kokota na mboka ya elaka \s1 Moyize mpe Eleazari batangi motango ya bato \p \v 1 Sima na etumbu wana, \nb Yawe alobaki na Moyize mpe na Nganga-Nzambe Eleazari, mwana mobali ya Aron : \v 2 « Botanga motango ya bato ya lisanga mobimba ya Isalaele, bato nyonso oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, oyo bazali na makoki ya kosala mosala ya kisoda kati na Isalaele. » \p \v 3 Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari basololaki na bango na etando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene na Jeriko, mpe balobaki : \v 4 « Tokotanga motango ya bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bazali na mibu tuku mibale mpe koleka, ndenge Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize. » \b \li4 Tala bana ya Isalaele oyo babimaki na Ejipito : \b \li1 \v 5 Bakitani ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : \li2 na nzela ya Enoki, bakitani ya libota ya Enoki ; \li2 na nzela ya Palu, bakitani ya libota ya Palu ; \li2 \v 6 na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi ; \li2 na nzela ya Karimi, bakitani ya libota ya Karimi. \li4 \v 7 Yango nde ezalaki mabota ya Ribeni mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na misato na nkama sambo na tuku misato. \li2 \v 8 Eliabi azalaki mwana mobali ya Palu, \v 9 mpe bana mibali ya Eliabi bazalaki Nemueli, Datani mpe Abirami. Datani mpe Abirami bazalaki bakalaka ya lisanga ya Isalaele oyo batombokelaki Moyize mpe Aron mpe bazalaki na molongo ya bato oyo bazalaki kolanda Kore oyo atombokelaki Yawe. \v 10 Mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na Kore, oyo bato oyo bazalaki kolanda ye bakufaki tango moto ebomaki bato nkama mibale na mitano. Bakomaki lokola bandakisa. \v 11 Kasi bakitani ya Kore bakufaki te. \b \li1 \v 12 Bakitani ya Simeoni, kolanda mabota na bango, bazalaki : \li2 na nzela ya Nemueli, bakitani ya libota ya Nemueli ; \li2 na nzela ya Yamini, bakitani ya libota ya Yamini ; \li2 na nzela ya Yakini, bakitani ya libota ya Yakini ; \li2 \v 13 na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zerayi ; \li2 na nzela ya Saulo, bakitani ya libota ya Saulo. \li4 \v 14 Yango nde ezalaki mabota ya Simeoni mpe bazalaki bato nkoto tuku mibale na mibale na nkama mibale. \b \li1 \v 15 Bakitani ya Gadi kolanda mabota na bango, bazalaki : \li2 na nzela ya Tsefoni, bakitani ya libota ya Tsefoni ; \li2 na nzela ya Agi, bakitani ya libota ya Agi ; \li2 na nzela ya Shuni, bakitani ya libota ya Shuni ; \li2 \v 16 na nzela ya Ozini, bakitani ya libota ya Ozini ; \li2 na nzela ya Eri, bakitani ya libota ya Eri ; \li2 \v 17 na nzela ya Arodi, bakitani ya libota ya Eroki ; \li2 na nzela ya Areeli, bakitani ya libota ya Areeli. \li4 \v 18 Yango nde ezalaki mabota ya Gadi mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na nkama mitano. \b \li4 \v 19 Eri mpe Onani bazalaki bana mibali ya Yuda, kasi bakufaki na mokili ya Kanana. \li1 \v 20 Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki : \li2 na nzela ya Shela, bakitani ya libota ya Shela ; \li2 na nzela ya Peretsi, bakitani ya libota ya Peretsi ; \li2 na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zera. \li1 \v 21 Bakitani ya Peretsi kolanda mabota na bango bazalaki : \li2 na nzela ya Etsironi, bakitani ya libota ya Etsironi ; \li2 na nzela ya Amuli, bakitani ya libota ya Amuli. \li4 \v 22 Yango nde ezalaki mabota ya Yuda ; bazalaki bato nkoto tuku sambo na motoba na nkama mitano. \b \li1 \v 23 Bakitani ya Isakari kolanda mabota na bango bazalaki : \li2 na nzela ya Tola, bakitani ya libota ya Tola ; \li2 na nzela ya Puwa, bakitani ya libota ya Puwa ; \li2 \v 24 na nzela ya Yashubi, bakitani ya libota ya Yashubi ; \li2 na nzela ya Shimironi, bakitani ya libota ya Shimironi. \li4 \v 25 Yango nde ezalaki mabota ya Isakari ; bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama misato. \b \li1 \v 26 Bakitani ya Zabuloni, kolanda mabota na bango, bazalaki : \li2 na nzela ya Seredi, bakitani ya libota ya Seredi ; \li2 na nzela ya Eloni, bakitani ya libota ya Eloni ; \li2 na nzela ya Yaleyeli, bakitani ya libota ya Yaleyeli. \li4 \v 27 Yango nde ezalaki mabota ya Zabuloni mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na nkama mitano. \b \li4 \v 28 Bakitani ya Jozefi kolanda mabota na bango na nzela ya Manase mpe Efrayimi bazalaki : \li1 \v 29 Bakitani ya Manase : \li2 na nzela ya Makiri, bakitani ya libota ya Makiri (Makiri azalaki tata na Galadi) ; \li2 na nzela ya Galadi, bakitani ya libota ya Galadi. \li1 \v 30 Tala bakitani ya Galadi : \li2 na nzela ya Yezeri, bakitani ya libota ya Yezeri ; \li2 na nzela ya Eleki, bakitani ya libota ya Eleki ; \li2 \v 31 na nzela ya Asirieli, bakitani ya libota ya Asirieli ; \li2 na nzela ya Sishemi, bakitani ya libota ya Sishemi ; \li2 \v 32 na nzela ya Shemida, bakitani ya libota ya Shemida ; \li2 na nzela ya Eferi, bakitani ya libota ya Eferi. \li1 \v 33 Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, azalaki na bana mibali te, kasi azalaki kaka na bana basi ; bongo, tala bakombo na bango : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa. \li4 \v 34 Yango nde ezalaki mabota ya Manase, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na mibale na nkama sambo. \li1 \v 35 Bakitani ya Efrayimi kolanda mabota na bango bazalaki : \li2 na nzela ya Shutela, bakitani ya libota ya Shutela ; \li2 na nzela ya Bekeri, bakitani ya libota ya Bekeri ; \li2 na nzela ya Tayani, bakitani ya libota ya Tayani. \li1 \v 36 Tala bakitani ya Shutela : \li2 na nzela ya Erani, bakitani ya etuka ya Erani. \li4 \v 37 Yango ezalaki mabota ya Efrayimi mpe bazalaki bato nkoto tuku misato na mibale na nkama mitano. \li4 Bango nde bazalaki bakitani ya Jozefi kolanda bituka na bango. \b \li1 \v 38 Bakitani ya Benjame kolanda mabota na bango bazalaki : \li2 na nzela ya Bela, bakitani ya libota ya Bela ; \li2 na nzela ya Ashibeli, bakitani ya libota ya Ashibeli ; \li2 na nzela ya Ayirami, bakitani ya libota ya Ayirami ; \li2 \v 39 na nzela ya Shufami, bakitani ya libota ya Shufami ; \li2 na nzela ya Ufami, bakitani ya libota ya Ufami. \li1 \v 40 Bakitani ya Bela na nzela ya Aridi mpe Namani bazalaki : \li2 na nzela ya Aridi, bakitani ya libota ya Aridi ; \li2 na nzela ya Namani, bakitani ya libota ya Namani. \li4 \v 41 Yango nde ezalaki mabota ya Benjame mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama mitano. \b \li1 \v 42 Bakitani ya Dani kolanda mabota na bango, bazalaki : \li2 na nzela ya Shuami, bakitani ya libota ya Shuami. \li4 Bango nde bazalaki bakitani ya Dani : \v 43 bango nyonso bazalaki bakitani ya libota ya Shuami mpe bazalaki bato nkoto tuku motoba na minei na nkama minei. \b \li1 \v 44 Bakitani ya Aseri, kolanda mabota na bango, bazalaki : \li2 na nzela ya Yimina, bakitani ya libota ya Yimina ; \li2 na nzela ya Yishivi, bakitani ya libota ya Yishivi ; \li2 na nzela ya Beria, bakitani ya libota ya Beria ; \li1 \v 45 na nzela ya bakitani ya Beria : \li2 na nzela ya Eberi, bakitani ya libota ya Eberi ; \li2 na nzela ya Malikieli, bakitani ya libota ya Malikieli. \li4 \v 46 Aseri azalaki mpe na mwana moko ya mwasi na kombo Sera. \li4 \v 47 Yango nde ezalaki mabota ya Aseri, mpe bazalaki bato nkoto tuku mitano na misato na nkama minei. \b \li1 \v 48 Bakitani ya Nefitali, kolanda mabota na bango, bazalaki : \li2 na nzela ya Yatseyeli, bakitani ya libota ya Yatseyeli ; \li2 na nzela ya Guni, bakitani ya libota ya Guni ; \li2 \v 49 na nzela ya Yetseri, bakitani ya libota ya Yetseri ; \li2 na nzela ya Shilemi, bakitani ya libota ya Shilemi. \li4 \v 50 Yango nde ezalaki mabota ya Nefitali, mpe bazalaki bato nkoto tuku minei na mitano na nkama minei. \b \li4 \v 51 Motango nyonso ya bana ya Isalaele oyo batangaki ezalaki bato nkoto nkama motoba na moko na nkama sambo na tuku misato. \s1 Malako mpo na kokabola mokili \p \v 52 Yawe alobaki na Moyize : \v 53 « Esengeli kokabolela bango mokili lokola libula, kolanda motango ya bato wana. \v 54 Bokopesa eteni ya mabele ya monene epai ya libota oyo ezali mpe monene, eteni ya mabele ya moke epai ya libota oyo ezali mpe moke. Libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda motango ya bato oyo batangaki. \v 55 Bakokabola mokili na kobeta zeke mpe libota moko na moko ekozwa libula na yango, kolanda bakombo ya bakoko ya bikolo na bango. \v 56 Esengeli kokabola libula na libula na zeke kati na libota oyo ezali monene mpe libota oyo ezali moke. » \s1 Mabota ya Balevi etangami \li1 \v 57 Tala bakitani ya Levi oyo batangamaki kolanda mabota na bango : \li2 na nzela ya Gerishoni, bakitani ya libota ya Gerishoni ; \li2 na nzela ya Keati, bakitani ya Keati ; \li2 na nzela ya Merari, bakitani ya Merari. \li1 \v 58 Tala mabota mosusu ya bakitani ya Levi : \li2 bakitani ya libota ya Libini, \li2 bakitani ya libota ya Ebron, \li2 bakitani ya libota ya Maali, \li2 bakitani ya libota ya Mushi, \li2 bakitani ya libota ya Kore. \li2 Keati azalaki tata ya Amirami ; \v 59 bongo, kombo ya mwasi ya Amirami ezalaki « Yokebedi. » Yokebedi azalaki mokitani ya Levi, oyo abotamaki na Ejipito. Abotaki na Amirami Aron, Moyize mpe ndeko na bango ya mwasi Miriami. \v 60 Aron azalaki tata ya Nadabi na Abiyu, Eleazari na Itamari. \v 61 Kasi Nadabi na Abiyu bakufaki tango babonzelaki Yawe makabo na moto ya mopaya. \b \li4 \v 62 Bakitani nyonso ya mibali ya Levi oyo batangamaki, kobanda na sanza moko ya mbotama mpe koleka, bazalaki nkoto tuku misato. Batangaki bango te elongo na bato mosusu ya Isalaele mpo ete bazwaki libula te kati na bango. \b \p \v 63 Yango nde motango ya bana ya Isalaele oyo Moyize elongo na Nganga-Nzambe Eleazari batangaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani pene ya Jeriko. \v 64 Kati na bango, moko te atikalaki na bomoi, kati na ba-oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Aron batangaki, tango batangaki bana ya Isalaele kati na esobe ya Sinai. \v 65 Pamba te Yawe alobaki na bana ya Isalaele wana ete bakokufa solo na esobe, mpe moko te kati na bango longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni. \c 27 \s1 Bana basi ya Tselofikadi bakitani na libula \p \v 1 Bana basi ya Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase bazalaki bakitani ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi. Bakombo na bango ezalaki : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa. Bayaki \v 2 liboso ya Moyize, ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya bakambi ya lisanga mobimba, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe balobaki : \v 3 « Tata na biso akufaki na esobe. Azalaki te na molongo na bato oyo bazalaki kolanda Kore, oyo basanganaki lisanga mpo na kotelemela Yawe, kasi akufaki mpo na masumu na ye moko mpe atikaki bana mibali te. \v 4 Bongo mpo na nini kombo ya tata na biso elimwa kaka boye na libota na ye, mpo ete azalaki na mwana mobali te ? Pesa biso mpe eteni ya mabele kati na bandeko ya tata na biso. » \p \v 5 Boye, Moyize amemaki likambo na bango liboso ya Yawe. \p \v 6 Yawe alobaki na Moyize : \v 7 « Makambo oyo bana basi ya Tselofikadi bazali koloba ezali solo. Osengeli kopesa bango eteni ya mabele lokola libula kati na bandeko ya tata na bango mpe pesa bango libula ya tata na bango. \v 8 Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto moko asili kokufa mpe atiki bana mibali te, bokopesa libula na ye epai ya mwana na ye ya mwasi. \v 9 Soki mpe azali na mwana mwasi te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko na ye ya mibali. \v 10 Soki mpe azali na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya bandeko mibali ya tata na ye. \v 11 Bongo, soki tata na ye azalaki mpe na bandeko mibali te, bokopesa libula na ye epai ya ndeko ya pene ya libota ya tata na ye ; ye nde akokitana na yango. Oyo ekozala mpo na Isalaele, mobeko oyo bosengeli kolanda ndenge Yawe alobaki na Moyize. › » \s1 Jozue akitani na Moyize \p \v 12 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Mata likolo ya bangomba ya Abarimi, mpe tala mokili oyo napesaki epai ya bana ya Isalaele. \v 13 Sima na yo komona yango, yo mpe okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi ndenge moko na Aron, ndeko na yo ya mobali, \v 14 pamba te tango lisanga ya bato batombokaki mpo na mayi, na esobe ya Tsini, bino mpe botosaki mitindo na Ngai te mpe bopesaki lokumu te na bosantu na Ngai na miso na bango. Ezalaki nde mayi ya Meriba ya Kadeshi, na esobe ya Tsini. \p \v 15 Moyize alobaki na Yawe : \pi1 \v 16 — Tika ete Yawe, Nzambe oyo apesaka pema na bato nyonso, apona moto moko mpo ete akamba lingomba oyo ; \v 17 moto oyo akobanda kobima mpe kokota liboso na bango, oyo akobanda kobimisa mpe kokotisa bango mpo ete bato na Yawe bazala te lokola bibwele oyo ezanga mobateli. \p \v 18 Yawe azongiselaki Moyize : \pi1 — Kamata Jozue, mwana mobali ya Nuni, moto oyo azali na molimo mpe tia ye maboko na yo. \v 19 Mema ye liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe ya lingomba mobimba ya bato, bongo okopesa ye mosala na miso na bango. \v 20 Pesa ye ndambo ya bokonzi na yo mpo ete lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakoka kotosa ye. \v 21 Akokende kotelema liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, oyo akotuna mokano na Yawe mpo na ye, na nzela na Urimi. Na mokano wana nde, ye mpe lisanga mobimba ya bana ya Isalaele bakobanda kobima mpe kokota. \p \v 22 Moyize asalaki ndenge Yawe atindaki ye. Akamataki Jozue mpe atelemisaki ye liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari mpe liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele. \v 23 Atiaki ye maboko mpe apesaki ye mosala, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize. \c 28 \ms1 Mibeko na tina na makabo bazikisa na moto \s1 Na tina na makabo ya mokolo na mokolo \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Pesa mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Bosala keba ete bomema liboso na Ngai, na mikolo oyo ekatama, makabo na Ngai, makabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Ngai. › \p \v 3 Loba na bango : ‹ Tala likabo bazikisa na moto oyo bosengeli kobonza epai na Yawe : bana meme mibale ya mobu moko mpe ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na libela. \v 4 Bokobonza mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa ; \v 5 elongo na likabo ya bakilo misato ya farine basangisa na balitele mibale ya mafuta ya olive. \v 6 Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, oyo ebandisamaki na ngomba Sinai ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. \v 7 Bokobakisa lisusu likabo ya masanga : balitele mibale ya masanga ya vino ya sika mpo na mwana meme moko na moko. Bokobonzela Yawe masanga yango na Esika ya bule. \v 8 Bokobonza mwana meme mosusu na pokwa, elongo na lolenge moko ya makabo ya mbuma mpe mbeka ya masanga oyo bobonzaki na tongo ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. \s1 Na tina na bambeka mpo na mokolo ya Saba \p \v 9 Na mokolo ya Saba, bokobonza mbeka ya bana meme mibale, ya mobu moko oyo ezanga mbeba, elongo na likabo ya masanga mpe bakilo motoba ya farine oyo basangisa na mafuta, lokola makabo ya mbuma. \v 10 Oyo ezali mbeka ya kotumba mpo na mikolo nyonso ya Saba, bakisa mbeka ya kotumba ya tango nyonso mpe mbeka na yango ya masanga. \s1 Na tina na bambeka mpo na ebandeli ya sanza \p \v 11 Na ebandeli nyonso ya sanza, bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba : bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme ya mobu moko sambo. Yango nyonso esengeli kozala na mbeba te. \v 12 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta ; \v 13 mpo na mwana meme moko na moko, bokobonza yango elongo na likabo ya bakilo misato ya farine basangisa na mafuta. Ezali mbeka ya kotumba, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. \v 14 Mbeka ya masanga oyo bosengeli kobonza ekozala : balitele minei ya masanga ya vino mpo na ngombe moko na moko, balitele misato ya masanga ya vino mpo na meme moko na moko ya mobali mpe balitele mibale ya masanga ya vino mpo na mwana meme moko na moko ya mobali. \v 15 Kobakisa na mbeka ya kotumba ya libela elongo na mbeka na yango ya masanga, bokobonza lisusu epai na Yawe ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu. \s1 Na tina na bambeka mpo na feti ya Pasika \p \v 16 Mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso ekozala Pasika mpo na lokumu ya Yawe. \v 17 Mokolo ya zomi na mitano ya sanza yango kaka ekozala mokolo ya feti monene. Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. \v 18 Na mokolo ya liboso, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. \v 19 Bokobonzela Yawe, lokola likabo bazikisa na moto, lokola mbeka ya kotumba : bana ngombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali, bana mibali ya meme sambo ya mobu moko ; nyonso esengeli kozanga mbeba. \v 20 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko na moko ya mobali, bakobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta ; \v 21 mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato. \v 22 Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino. \v 23 Bokobonza mbeka oyo nyonso, bakisa mpe mbeka ya kotumba ya libela ya tongo. \v 24 Bokobanda kobonza yango mikolo nyonso, na mikolo nyonso sambo, lokola bilei bazikisa na moto ; mpe solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Ekobanda kobakisama na mbeka ya kotumba ya libela mpe na mbeka na yango ya masanga. \v 25 Na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bongo na mokolo yango, bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. \s1 Na tina na bambeka mpo na feti ya baposo \p \v 26 Na mokolo ya bambuma ya liboso, tango bokobonzela Yawe makabo ya mbuma ya sika, na tango ya feti ya baposo, bokozala na mayangani ya bule mpe bokosala mosala moko te oyo basalaka mokolo na mokolo. \v 27 Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : bangombe mibale ya mibali, meme moko ya mobali mpe bana meme sambo ya mibali ya mobu moko. \v 28 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko na moko ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta ; \v 29 mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato. \v 30 Bokobakisa lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino. \v 31 Bokobonza mbeka yango na mbeka na yango ya masanga, bakisa mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma. Bosala keba ete ezala banyama oyo ezanga mbeba. › » \c 29 \s1 Na tina na bambeka mpo na feti ya bakelelo \p \v 1 « ‹ Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo, ekozala nde mokolo ya kobeta bakelelo. \v 2 Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : mwana ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme sambo ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. \v 3 Mpo na ngombe ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ; \v 4 mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato. \p \v 5 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino. \v 6 Bambeka oyo ekobakisama na mbeka ya kotumba ya sanza na sanza elongo na makabo na yango ya bambuma, na mbeka ya kotumba ya mokolo na mokolo elongo na makabo na yango ya bambuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda ndenge ekatama. Ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. \s1 Na tina na bambeka mpo na mokolo ya bolimbisi masumu \p \v 7 Na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule. Bokokila bilei, bokosala mosala moko te oyo bokosalaka mokolo na mokolo. \v 8 Bokobonzela Yawe mbeka ya kotumba, lokola biloko ya solo kitoko : mwana ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali mpe bana mibali ya meme sambo ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. \v 9 Mpo na ngombe ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme ya mobali, bokobonza yango na likabo ya bakilo motoba ; \v 10 mpe mpo na mwana meme moko na moko ya mobali kati na yango sambo, bokobonza yango na likabo ya bakilo misato. \v 11 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ; ekobakisama na mbeka mpo na masumu oyo epesami na mokolo ya bolimbisi masumu mpe na mbeka ya kotumba ya libela na mbeka na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga. \s1 Na tina na bambeka mpo na feti ya bandako ya kapo \p \v 12 Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo mpe bokosala feti monene mpo na Yawe mikolo sambo. \v 13 Bokobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba mpe lokola likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : bangombe zomi na misato ya mibali, bameme mibale ya mibali, mpe bana meme zomi na minei ya mibali ya mobu moko mpe ezanga mbeba. \v 14 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali kati na bangombe yango zomi na misato ya mibali, bokobonza yango elongo na likabo ya bakilo libwa ya farine basangisa na mafuta ; mpo na meme moko na moko kati na bameme yango mibale ya mibali, bakilo motoba ; \v 15 mpe mpo na mwana meme moko na moko kati na bana meme yango zomi na minei, bakilo misato. \v 16 Bokobakisa, ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, bakisa lisusu mbeka ya kotumba ya libela na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga. \p \v 17 Na mokolo ya mibale, bokobonza bangombe ya mibali zomi na mibale, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei, ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba ; \v 18 elongo na makabo ya mbuma mpe likabo ya masanga mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, kolanda motango oyo ekatama. \v 19 Bokobakisa, ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga. \p \v 20 Na mokolo ya misato, bokobonza bangombe ya mibali zomi na moko, meme mibale ya mibali mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. \v 21 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama. \v 22 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga. \p \v 23 Na mokolo ya minei, bokobonza bangombe ya mibali zomi, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei, ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. \v 24 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama. \v 25 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga. \p \v 26 Na mokolo ya mitano, bokobonza bangombe ya mibali libwa, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. \v 27 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama. \v 28 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga. \p \v 29 Na mokolo ya motoba, bokobonza bangombe ya mibali mwambe, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. \v 30 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama. \v 31 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga. \p \v 32 Na mokolo ya sambo, bokobonza bangombe ya mibali sambo, bameme ya mibali mibale mpe bana mibali ya meme zomi na minei ya mobu moko, nyonso ezanga mbeba. \v 33 Mpo na bangombe ya mibali, bameme ya mibali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama. \v 34 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga. \p \v 35 Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani monene mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. \v 36 Bokobonza lokola mbeka ya kotumba mpe likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe : ngombe moko ya mobali, meme moko ya mobali ; mpe bana mibali ya meme, sambo, ya mobu moko mpe ezanga mbeba. \v 37 Mpo na ngombe ya mobali, meme ya mobali mpe bana mibali ya meme, bokobonza yango na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga, kolanda motango oyo ekatama. \v 38 Bokobakisa ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu, kobakisa lisusu, mbeka ya kotumba ya libela elongo na makabo na yango ya mbuma mpe mbeka na yango ya masanga. \p \v 39 Oyo nde makabo mpe bambeka oyo bokobonzela Yawe na mikolo ya bafeti na bino oyo ekatama ; ekobakisama na likolo ya mbeka na bino ya kotumba, na likolo ya makabo na bino ya bambuma, mbeka na bino ya masanga, mbeka na bino ya boyokani mpo na kokokisa ndayi to mpe na likolo ya makabo oyo bopesaka wuta na mokano ya mitema na bino moko. › » \s1 Mobeko na tina na bandayi \p \v 40 Moyize ayebisaki bana ya Isalaele makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye. \c 30 \p \v 1 Moyize alobaki na bakambi ya mabota ya Isalaele : « Tala mobeko oyo Yawe asili kopesa : \v 2 ‹ Soki moto apesi elaka epai na Yawe na nzela ya ndayi to azwi ekateli songolo na nzela ya ndayi, tika ete akokisa elaka na ye, asala kolanda maloba oyo ebimaki na monoko na ye. \v 3 Soki elenge moko ya mwasi alapi ndayi epai na Yawe, wana azali nanu na ndako ya tata na ye to azwi ekateli moko na nzela ya seleka, \v 4 bongo tata na ye ayoki ndayi to ekateli yango mpe alobi na ye eloko moko te, ndayi nyonso oyo alapaki mpe ekateli nyonso oyo azwaki ekotikala se bongo. \v 5 Kasi soki tata na ye atelemeli ye tango ayoki yango, ndayi nyonso oyo alapaki mpe ekateli nyonso oyo azwaki ekokoma pamba. Yawe akotangela ye yango te lokola niongo, pamba te tata na ye aboyi yango. \p \v 6 Soki elenge mwasi yango abali sima na kolapa ndayi to sima monoko na ye kobimisa ekateli ; \v 7 bongo mobali na ye ayoki yango mpe alobi na ye eloko moko te, ndayi oyo alapaki to ekateli oyo azwaki ekotikala se bongo. \v 8 Kasi soki mobali na ye atelemeli ye tango ayoki yango, akweyisi nde ndayi oyo ekangaki ye to ekateli oyo azwaki ye moko mpe ebimaki na monoko na ye. Yawe akotangela ye yango lokola niongo te. \p \v 9 Soki mwasi oyo akufisa mobali to oyo babengana na libala alapi ndayi to azwi ekateli ezala ya ndenge nini, asengeli kokokisa yango. \v 10 Soki mwasi ya libala alapi ndayi to azwi ekateli na nzela ya seleka ; \v 11 bongo, mobali na ye ayoki yango mpe alobi na ye eloko moko te mpe apekisi ye te, ndayi oyo alapaki mpe ekateli oyo azwaki ekotikala se bongo. \v 12 Kasi soki mobali na ye akweyisi yango tango ayoki yango, ndayi moko te to ekateli moko te oyo ebimaki na monoko na ye ekotikala bongo. Pamba te mobali na ye akweyisi yango, mpe Yawe akotangela ye yango lokola niongo te. \v 13 Mobali na ye azali na bokonzi ya kondima to koboya ndayi nyonso oyo alapi to ekateli nyonso oyo asili kozwa na kokila bilei. \v 14 Kasi soki mobali na ye alobi na ye eloko moko te kino na mokolo oyo ekolanda, elakisi ete asili kondima ndayi nyonso to ekateli nyonso oyo mwasi na ye azwaki. Andimi yango, pamba te alobi eloko moko te tango ayokaki yango. \v 15 Nzokande, soki akweyisi ndayi to ekateli yango, sima na koyoka yango, ye nde akomema mokumba ya mbeba ya mwasi na ye. › » \p \v 16 Tala bikateli oyo Yawe apesaki epai na Moyize na tina na boyokani kati na mobali mpe mwasi na ye, kati na tata mpe bilenge basi oyo bazali na ndako na ye. \c 31 \s1 Isalaele alongi Madiani \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Zongisa mabe na mabe oyo bato ya Madiani basalaki bana ya Isalaele, mpe na sima, okokende kosangana na bakoko na yo na mokili ya bakufi. » \p \v 3 Boye Moyize alobaki na bato : « Tika ete mibali kati na bino balata bibundeli mpo na kokende kobundisa mokili ya Madiani mpe kozongisela bango mabe na mabe, na Kombo na Yawe. \v 4 Libota moko na moko ya Isalaele ekotinda basoda nkoto moko na etumba. » \p \v 5 Boye, baponaki bato nkoto moko mpo na libota moko na moko kati na mabota ya Isalaele. Bongo, bato nkoto zomi na mibale balataki bibundeli mpo na kokende na etumba. \v 6 Moyize atindaki bango na etumba bato nkoto moko ya libota moko na moko elongo na Nganga-Nzambe Pineasi, mwana mobali ya Eleazari oyo amemaki bisalelo ya Esika ya bule mpe bakelelo mpo na kopesa mbela. \p \v 7 Babundisaki Madiani ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize mpe babomaki mibali nyonso. \v 8 Kati na molongo ya bato oyo babomaki, ezalaki na bakonzi ya Madiani oyo : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba. Babomaki mpe lisusu Balami, mwana mobali ya Beori na mopanga. \v 9 Bana ya Isalaele bakangaki basi mpe bana ya Madiani elongo na banyama, bibwele mpe bozwi na bango nyonso lokola bomengo ya bitumba. \v 10 Batumbaki bingumba nyonso epai wapi bato ya Madiani bazalaki kovanda, na milako na bango nyonso. \v 11 Bamemaki bomengo nyonso ya bitumba mpe biloko nyonso oyo babotolaki elongo na bato, banyama ; \v 12 mpe bamemaki bakangami, biloko babotolaki mpe bomengo ya bitumba epai ya Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari, mpe lisanga ya Isalaele na molako na bango oyo ezalaki na bitando ya Moabi, na libongo ya Yordani, pene ya Jeriko. \p \v 13 Moyize, Nganga-Nzambe Eleazari mpe bakambi nyonso ya lisanga ya Isalaele bayaki koyamba bango na libanda ya molako. \v 14 Moyize atombokelaki bakonzi oyo baponamaki mpo na kotambolisa mampinga, bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda, oyo bawutaki na bitumba. \v 15 Moyize atunaki bango : « Boni, botiki basi nyonso na bomoi ? \v 16 Ezalaki nde bango bato balandaki toli ya Balami mpe batindikaki bana ya Isalaele na kopesa Yawe mokongo, kati na makambo oyo esalemaki na Peori ; mpe yango nde esalaki ete etumbu ekweya likolo ya bato na Yawe. \v 17 Sik’oyo, boboma mibali nyonso mpe basi nyonso oyo bayebi nzoto ya mibali ; \v 18 kasi bobatela na bomoi mpo na bino, basi nyonso oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. \v 19 Moto nyonso kati na bino oyo abomaki moto to asimbaki ebembe, asengeli kozala libanda ya molako mikolo sambo. Boye, na mokolo ya misato mpe ya sambo, bosengeli komipetola, bino mpe bakangami na bino. \v 20 Bokopetola mpe lisusu bilamba nyonso mpe biloko nyonso oyo basala na baposo ya banyama, na suki ya bantaba to mpe na banzete. » \p \v 21 Nganga-Nzambe Eleazari alobaki na basoda oyo bakendeki na bitumba : « Botala bikateli ya mobeko oyo Yawe apesaki epai ya Moyize : \v 22 ‹ Ezali kaka wolo, palata, bronze, motako, ete, mbodi \v 23 mpe biloko nyonso oyo ezikaka na moto te nde bokolekisa na moto mpo na kopetola yango ; bokopetola yango lisusu na mayi ya bopetolami. Kasi bokopetola na mayi biloko nyonso oyo ezikaka na moto. \v 24 Na mokolo ya sambo, bokopetola bilamba na bino mpe bokokoma peto mpe na sima nde bokoki kozonga na molako. › » \s1 Moyize akaboli bomengo ya bitumba \p \v 25 Yawe alobaki na Moyize : \v 26 « Yo, Moyize, mpe Nganga-Nzambe Eleazari, elongo na bakambi ya mabota ya lisanga ya Isalaele, botanga motango ya bato, ya banyama nyonso oyo bakangaki. \v 27 Kabola bomengo ya bitumba yango kati na basoda oyo bakendeki na bitumba mpe bato ya lisanga ya Isalaele oyo batikalaki. \v 28 Na ndambo eteni oyo okopesa na basoda oyo bakendeki na bitumba, tia pembeni lokola mpako mpo na Yawe, moto moko kati na bato nkama mitano, ebwele moko kati na bibwele nkama mitano, ezala ya ngombe, ya ane, ya meme to ya bantaba. \v 29 Kamata mpako yango kati na ndambo ya eteni na bango mpe pesa yango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari lokola eteni ya Yawe. \v 30 Kamata kati na ndambo ya eteni ya bana ya Isalaele, moko kati na tuku mitano, ezala ya bato, ya ngombe, ya ane, ya meme, ya bantaba to ya bibwele mosusu mpe pesa yango epai ya Balevi oyo bazali na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. » \v 31 Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari basalaki ndenge Yawe atindaki Moyize. \v 32 Bomengo ya bitumba oyo etikalaki na oyo basoda oyo bakendeki na bitumba babotolaki ezalaki : meme na bantaba nkoto nkama motoba na tuku sambo na mitano ; \v 33 ngombe nkoto tuku sambo na mibale ; \v 34 ane nkoto tuku motoba na moko \v 35 mpe basi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te nkoto tuku misato na mibale. \b \li4 \v 36 Ndambo ya eteni ya bomengo ya bitumba oyo bato oyo bakendeki na bitumba bazwaki ezalaki : \b \li1 bameme mpe bantaba nkoto nkama misato na tuku misato na sambo na nkama mitano ; \v 37 mpe mpako mpo na Yawe ezalaki : bameme mpe bantaba nkama motoba na tuku sambo na mitano ; \li1 \v 38 bangombe nkoto tuku misato na motoba, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki : bangombe tuku sambo na mibale ; \li1 \v 39 ba-ane nkoto tuku misato na nkama mitano, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki : ba-ane tuku motoba na moko ; \li1 \v 40 bato nkoto zomi na motoba, mpe mpako mpo na Yawe ezalaki : bato tuku misato na mibale. \b \p \v 41 Moyize apesaki mpako mpo na Yawe epai ya Nganga-Nzambe Eleazari ndenge Yawe atindaki ye. \p \v 42 Boye, ndambo oyo epesamelaki bana ya Isalaele, oyo Moyize alongolaki na bomengo ya bato oyo bakendeki na bitumba, \v 43 ndambo oyo epesamelaki lisanga ezalaki : meme elongo na bantaba nkoto nkama misato na tuku misato na sambo na nkama mitano ; \v 44 ngombe nkoto tuku misato na motoba ; \v 45 ba-ane nkoto tuku misato na nkama mitano, \v 46 mpe bato nkoto zomi na motoba. \v 47 Na ndambo oyo epesamelaki bana ya Isalaele, Moyize alongolaki moto moko kati na bato tuku mitano mpe nyama moko kati na banyama tuku mitano, ndenge Yawe atindaki ye mpe apesaki yango epai ya Balevi oyo bazalaki na mokumba ya kobatela Mongombo na Yawe. \p \v 48 Bongo, bakonzi ya mampinga, bakonzi ya bankoto ya basoda mpe ya bankama bayaki epai ya Moyize. \v 49 Balobaki na Moyize : « Basali na yo batangi motango ya basoda oyo bazali na se ya bokonzi na biso mpe ata moko te azangi. \v 50 Boye, tomemi epai na Yawe lokola makabo, biloko ya wolo oyo : biloko oyo balataka na maboko, bapete, bamedayi, biloko ya matoyi, basheneti oyo moko na moko na biso azwaki mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu liboso ya Yawe. » \p \v 51 Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki na maboko na bango, biloko nyonso oyo basala na wolo. \v 52 Wolo nyonso oyo Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki lokola makabo mpo na Yawe, na maboko ya bakonzi ya bankoto mpe ya bankama, ezalaki bakilo nkama moko na tuku mwambe na minei. \v 53 Soda na soda akamataki na makasi mpo na ye moko bomengo na ye ya bitumba. \v 54 Moyize mpe Nganga-Nzambe Eleazari bazwaki wolo na maboko ya bakonzi ya nkoto ya basoda mpe ya nkama ya basoda mpe bamemaki yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani lokola ekaniseli mpo na bana ya Isalaele liboso ya Yawe. \c 32 \s1 Mabota misato evandi na este ya ebale Yordani \p \v 1 Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki na bibwele mingi penza. Bamonaki ete mokili ya Yaezeri mpe ya Galadi ezali malamu mingi mpo na kobokola bibwele. \v 2 Bongo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bayaki koloba na Moyize, na Nganga-Nzambe Eleazari mpe na bakambi ya lisanga : \v 3 « Bingumba ya Ataroti, ya Diboni, ya Yaezeri, ya Nimira, ya Eshiboni, ya Eleale, ya Sebami, ya Nebo mpe ya Beoni ; \v 4 bituka oyo Yawe akweyisaki liboso ya bato ya Isalaele, ezali malamu mpo na kobokola bibwele ; nzokande, basali na yo bazali mpe na bibwele. » \v 5 Balobaki lisusu : « Soki tozwi ngolu na miso na yo, tika ete mokili oyo epesamela basali na yo lokola libula na biso mpe okatisa biso na ngambo ya Yordani te. » \p \v 6 Moyize alobaki na bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni : \pi1 — Boni, bandeko na bino bakende na bitumba, bongo bino botikala awa ? \v 7 Mpo na nini bolingi lisusu kolembisa mitema ya bana ya Isalaele oyo bazali kokende na mokili oyo Yawe apesaki bango ? \v 8 Oyo ezali penza makambo oyo batata na bino basalaki tango natindaki bango wuta na Kadeshi-Barinea mpo na kokende kononga mokili. \v 9 Sima na bango komata na lubwaku ya Eshikoli mpe komona mokili yango, balembisaki mitema ya bana ya Isalaele oyo balingaki kokota na mokili oyo Yawe apesaki bango. \v 10 Na mokolo wana, kanda ya Yawe epelaki mpe alapaki ndayi oyo : \v 11 « Lokola batosaki Ngai te na motema mobimba, moko te kati na bato oyo bazali na mibu tuku mibale mpe komata, ba-oyo babimaki na Ejipito, akomona mokili oyo nalakaki, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi \v 12 longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya libota ya Kenizi, mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni, pamba te batosaki Ngai Yawe na mitema na bango mobimba. » \pi1 \v 13 Yawe atombokelaki Isalaele mpe asalaki ete bayengayenga na esobe mibu tuku minei kino tango molongo nyonso ya bato oyo basalaki mabe na miso na Ye basilaki kokufa. \v 14 Bino mpe bozali kaka ndenge moko, libota ya bato ya masumu, bozali kaka kosala makambo ndenge moko na batata na bino mpe bozali kopelisa lisusu koleka kanda ya Yawe likolo ya Isalaele. \v 15 Soki boboyi kolanda nzela na Ye, akotika lisusu bato oyo nyonso na esobe mpe bato oyo bakobebisama likolo na bino. \p \v 16 Babelemaki pene na Moyize mpe balobaki : \pi1 — Te, tolingi nde kotonga mapango mpo na bibwele na biso mpe bingumba mpo na basi mpe bana na biso awa. \v 17 Kasi tozali kolata na lombangu bibundeli na biso mpe kokende na liboso ya bana ya Isalaele kino tango tokokomisa bango na esika na bango. Bongo, na tango yango, basi mpe bana na biso bakotikala awa, kati na bingumba batonga makasi, mpo na komibatela liboso ya bavandi ya mokili oyo. \v 18 Tokotikala kozonga na bandako na biso te soki moto moko na moko ya Isalaele azwi libula na ye te ; \v 19 mpe tokotikala kozwa libula moko te elongo na bango na ngambo mosusu ya Yordani, pamba te libula oyo esengeli kopesamela biso ezali na ngambo ya este ya Yordani. \p \v 20 Moyize alobaki na bango : \pi1 — Soki bosali bongo, soki bolati bibundeli mpo na kokende na bitumba liboso ya Yawe, \v 21 mpe soki bino nyonso oyo bosimbi bibundeli bokeyi na ngambo mosusu ya Yordani liboso ya Yawe, kino abengana banguna na Ye \v 22 mpe mokili ekoma na se ya bokonzi ya Yawe, nde bokoki kozonga. Ezali na nzela wana nde bokolongwa na ngambo na miso ya Yawe mpe na miso ya bana ya Isalaele, mpe mokili oyo ekokoma libula na bino na miso ya Yawe. \v 23 Kasi soki bosali bongo te, bokosala nde lisumu na miso ya Yawe mpe boyeba ete, lisumu na bino ekolanda bino. \v 24 Botonga bingumba makasi mpo na basi mpe bana na bino, botonga mapango mpo na bibwele na bino, kasi bokokisa mpe elaka oyo bopesi. \p \v 25 Bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni balobaki na Moyize : \pi1 — Basali na yo bakotosa mitindo ya nkolo na biso. \v 26 Bana mpe basi na biso elongo na banyama mpe bibwele na biso bakotikala awa, na bingumba ya Galadi. \v 27 Kasi mpo na biso basali na yo, mobali nyonso akosimba bibundeli mpo na kokende na bitumba ; tokokatisa na ngambo mpo na kobunda liboso ya Yawe ndenge kaka nkolo na biso asili koloba. \p \v 28 Boye, Moyize apesaki mitindo na tina na bango epai ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe epai ya bakambi ya mabota ya Isalaele. \v 29 Moyize alobaki na bango : \pi1 — Soki bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni, bango nyonso basimbi bibundeli mpo na kokende na bitumba, bakatisi ngambo ya Yordani elongo na bino liboso ya Yawe, mpe tango mokili ekokoma na se ya bokonzi na bino, bopesa bango mokili ya Galadi lokola libula na bango. \v 30 Kasi soki bakatisi elongo na bino te mpo na kokende na bitumba, bakozwa libula elongo na bino, na mokili ya Kanana. \p \v 31 Bakitani ya Gadi mpe ya Ribeni bazongisaki : \pi1 — Basali na yo bakosala makambo oyo Yawe alobaki na biso. \v 32 Tokokatisa na ngambo mosusu liboso ya Yawe kino na mokili ya Kanana mpo na bitumba. Kasi mabele oyo biso tosengeli kozwa lokola libula ekozala na ngambo oyo ya Yordani. \p \v 33 Boye, Moyize apesaki epai ya bakitani ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, mwana mobali ya Jozefi mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani : mokili mobimba elongo na bingumba na yango mpe mboka mike oyo ezingelaki yango. \p \v 34 Bakitani ya Gadi batongaki bingumba oyo : Diboni, Ataroti, Aroeri ; \v 35 Aroti-Shofani, Yaezeri, Yogibeka ; \v 36 Beti-Nimira mpe Beti-Arani lokola bingumba ya makasi ; mpe batongaki lisusu mapango mpo na bibwele na bango. \p \v 37 Bakitani ya libota ya Ribeni batongaki bingumba oyo : Eshiboni, Eleale mpe Kiriatayimi \v 38 elongo na Nebo mpe Bala-Meoni, kombo oyo babongola na Sibima. Bapesaki bakombo na bingumba oyo batongaki. \p \v 39 Bakitani ya Makiri, mwana mobali ya Manase bakendeki kino na Galadi, babotolaki yango mpe babenganaki bato ya Amori oyo bazalaki kovanda kuna. \v 40 Boye, Moyize apesaki mokili ya Galadi epai ya bakitani ya Makiri, mwana mobali ya Manase, mpe bakomaki kovanda kuna. \v 41 Yairi, moko kati na bakitani ya Manase, abotolaki bamboka na yango ya mike mpe abengaki yango Avoti Yairi\f + \fr 32.41 \fr*\ft Avoti Yairi elingi koloba : bamboka mike ya Yairi.\ft*\f*. \v 42 Mpe Noba abotolaki Kenati mpe bamboka na yango ya mike oyo ya zingazinga mpe abengaki yango Noba, ndenge ezalaki kombo na ye. \c 33 \s1 Mobembo ya Isalaele : longwa na Ejipito kino Kanana \p \v 1 Tala bisika oyo bana ya Isalaele batongaki milako na bango tango bazalaki na mobembo wuta na mokili ya Ejipito. Bazalaki kotambola na molongo ya bitumba na bokambami ya Moyize mpe Aron. \v 2 Moyize akomaki na mokanda bisika nyonso oyo bazalaki koleka na etinda ya Yawe. Tala bakombo ya moko na moko ya bisika yango : \p \v 3 Bana ya Isalaele balongwaki na Ramisesi na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya liboso ; ezalaki mokolo oyo elandaki mokolo ya Pasika. Babimaki na matata te na miso ya bato nyonso ya Ejipito, \v 4 wana bato ya Ejipito bazalaki kokunda bibembe ya bana mibali na bango ya liboso oyo Yawe abetaki mpo na kopesa etumbu na banzambe na bango. \p \v 5 Tango balongwaki na Ramisesi, bana ya Isalaele bakendeki kotonga molako na bango na Sukoti. \v 6 Kolongwa na Sukoti, bakendeki kotonga molako na bango na Etami, pene ya mondelo ya esobe. \v 7 Tango balongwaki na Etami, bazongaki na ngambo ya Pi-Ayiroti oyo etalana na Bala-Tsefoni, mpe batongaki molako na bango liboso ya Migidoli. \v 8 Kolongwa na Pi-Ayiroti, bakatisaki ebale monene mpe bakomaki na esobe ; batambolaki mikolo misato na esobe ya Etami mpe batongaki molako na bango, na Mara. \v 9 Kolongwa na Mara, bakomaki na Elimi epai wapi bakutaki bitima zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo ; batongaki molako na bango kuna. \v 10 Kolongwa na Elimi, bakendeki kotonga molako na bango pene ya ebale monene ya barozo. \v 11 Kolongwa na ebale monene ya barozo, bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Tsini. \v 12 Kolongwa na esobe ya Tsini, bakendeki kotonga molako na bango na Dofika. \v 13 Kolongwa na Dofika, bakendeki kotonga molako na bango na Alushi. \v 14 Kolongwa na Alushi, bakendeki kotonga molako na bango na Refidimi epai wapi bato bazangaki mayi ya komela. \p \v 15 Kolongwa na Refidimi, bakendeki kotonga molako na bango na esobe ya Sinai. \v 16 Kolongwa na esobe ya Sinai, bakendeki kotonga molako na bango na Kibiroti-Atava. \v 17 Kolongwa na Kibiroti-Atava, bakendeki kotonga molako na bango na Atseroti. \v 18 Kolongwa na Atseroti, bakendeki kotonga molako na bango na Ritima. \v 19 Kolongwa na Ritima, bakendeki kotonga molako na bango na Rimoni-Peretsi. \v 20 Kolongwa na Rimoni-Peretsi, bakendeki kotonga molako na bango na Libina. \v 21 Kolongwa na Libina, bakendeki kotonga molako na bango na Risa. \v 22 Kolongwa na Risa, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Keyelata. \v 23 Kolongwa na ngomba Keyelata, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Seferi. \v 24 Kolongwa na ngomba Seferi, bakendeki kotonga molako na bango na Arada. \v 25 Kolongwa na Arada, bakendeki kotonga molako na bango na Makeyeloti. \v 26 Kolongwa na Makeyeloti, bakendeki kotonga molako na bango na Taati. \v 27 Kolongwa na Taati, bakendeki kotonga molako na bango na Tera. \v 28 Kolongwa na Tera, bakendaki kotonga molako na bango na Mitika. \v 29 Kolongwa na Mitika, bakendaki kotonga molako na bango na Ashimona. \v 30 Kolongwa na Ashimona, bakendeki kotonga molako na bango na Moseroti. \v 31 Kolongwa na Moseroti, bakendeki kotonga molako na bango na Bene-Yaakani. \v 32 Kolongwa na Bene-Yaakani, bakendeki kotonga molako na bango na Ori-Gidigadi. \v 33 Kolongwa na Ori-Gidigadi, bakendeki kotonga molako na bango na Yotibata. \v 34 Kolongwa na Yotibata, bakendeki kotonga molako na bango na Abrona. \v 35 Kolongwa na Abrona, bakendeki kotonga molako na bango na Etsioni-Geberi. \v 36 Kolongwa na Etsioni-Geberi, bakendeki kotonga molako na bango na Kadeshi, na esobe ya Tsini. \v 37 Kolongwa na Kadeshi, bakendeki kotonga molako na bango na ngomba Ori, na mondelo ya Edomi. \p \v 38 Ezali kuna na ngomba Ori nde, kolanda etinda ya Yawe, Nganga-Nzambe Aron amataki mpe akufaki na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, sima na mibu tuku minei wuta bana ya Isalaele babimaki na Ejipito. \v 39 Aron azalaki na mibu ya mbotama nkama moko na tuku mibale na misato tango akufaki likolo ya ngomba Ori. \p \v 40 Boye, mokonzi ya Aradi, moto ya mboka Kanana, oyo azalaki kovanda na Negevi ya mboka Kanana, ayokaki sango ya koya ya bana ya Isalaele. \p \v 41 Tango balongwaki na ngomba Ori, bakendeki kotonga molako na bango na Tsalimona. \v 42 Kolongwa na Tsalimona, bakendeki kotonga molako na bango na Punoni. \v 43 Kolongwa na Punoni, bakendeki kotonga molako na bango na Oboti. \v 44 Kolongwa na Oboti, bakendeki kotonga molako na bango na Iye-Abarimi, na mondelo ya Moabi. \v 45 Kolongwa na Iye-Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na Diboni-Gadi. \v 46 Kolongwa na Diboni-Gadi, bakendeki kotonga molako na bango na Alimoni-Dibilatayimi. \v 47 Kolongwa na Alimoni-Dibilatayimi, bakendeki kotonga molako na bango na bangomba Abarimi, pembeni ya Nebo. \v 48 Kolongwa na bangomba Abarimi, bakendeki kotonga molako na bango na bitando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalana na Jeriko. \v 49 Batongaki molako na bango pembeni ya Yordani, kolongwa na Beti-Yeshimoti kino na Abele-Shitimi, na etando ya Moabi. \s1 Mitindo mpo na kokabola mokili ya Kanana \p \v 50 Na bitando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalana na Jeriko, Yawe alobaki na Moyize : \v 51 « Loba na bana ya Isalaele, mpe yebisa bango : ‹ Tango bokokatisa ebale Yordani mpo na kokota na mokili ya Kanana, \v 52 bokobengana bato nyonso oyo bavandaka na mboka yango, bokosilisa kobuka banzambe nyonso ya bikeko oyo basala na mabanga, na bibende banyangwisa na moto mpe bokobebisa bisambelo na bango nyonso ya likolo ya bangomba. \v 53 Bokobotola mokili yango mpe bokokoma kovanda kuna, pamba te napesi bino mokili yango mpo ete bobotola yango. \v 54 Bokokabola na kobeta zeke mabele ya mokili oyo ezali libula na bino : libota oyo eleki monene ekozwa mpe eteni ya mabele oyo eleki monene ; libota ya moke, ekozwa mpe eteni ya mabele ya moke. Libota moko na moko ekozwa eteni na yango ya mabele na esika oyo zeke ekokweya. Bokokabola yango kolanda masanga ya bituka na bino. \v 55 Kasi soki bobengani te bavandi ya mokili yango, ba-oyo bakotikala bakokoma lokola banzube na miso na bino mpe lokola basende na mipanzi na bino. Bakomonisa bino pasi na mokili oyo bokovanda. \v 56 Boye, nakosala bino ndenge nakanaki kosala bango. › » \c 34 \s1 Bandelo ya Kanana, mboka ya elaka \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Pesa mitindo oyo na bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na Kanana, tala mokili oyo ekopesamela bino lokola libula, mokili ya Kanana elongo na bandelo na yango oyo : \b \li1 \v 3 Na ngambo ya sude, mondelo na bino ekobanda na esobe ya Tsini mpe ekolanda mondelo ya mokili ya Edomi. Na ngambo ya este, mondelo na bino ya sude ekobanda na ebale monene ya Barozo, \v 4 ekokita na sude ya ebandeli ya ngomba Akarabimi mpe ekoleka na Tsini kino na sude ya Kadeshi-Barinea ; ekokoba na Atsari-Adari mpe ekoleka na Atsimoni. \v 5 Longwa na Atsimoni, ekoleka na mayi ya lubwaku ya Ejipito mpo na kosuka na ebale monene. \li1 \v 6 Mondelo na bino ya ngambo ya weste ekozala ebale monene Mediterane. \li1 \v 7 Na ngambo ya nor, mondelo na bino ekobanda na ebale monene Mediterane kino na ngomba Ori. \v 8 Longwa na ngomba Ori, bokolekisa yango na Lebo-Amati mpo na kosuka na Tsedadi. \v 9 Longwa na Tsedadi, ekoleka na Zifironi mpe ekokoma na Atsari-Enani. Yango nde ekozala mondelo na bino ya ngambo ya nor. \li1 \v 10 Na ngambo ya este, mondelo na bino ekobanda na Atsari-Enani kino na Shefami ; \v 11 longwa na Shefami, ekokita na Ribila na ngambo ya este ya Ayini mpe ekolanda ebale ya Kinereti, na ngambo na yango ya este, \v 12 kino na Yordani mpo na kosuka na ebale monene ya Barozo. \b \li4 Ezali ndenge wana nde mokili na bino ekozala elongo na bandelo oyo ezingeli yango. › » \s1 Moyize apesi mitindo ya sika mpo na kokabola mokili \p \v 13 Moyize apesaki mitindo oyo na bana ya Isalaele : « Tala yango wana, mokili oyo bokokabola na zeke, mokili oyo Yawe apesaki mitindo ete bapesa yango na mabota libwa na ndambo. \v 14 Pamba te ndako na ndako ya libota ya Ribeni mpe ndako na ndako ya libota ya Gadi elongo na ndambo ya libota ya Manase esilaki kozwa libula na yango. \v 15 Mabota oyo mibale na ndambo ezwaki libula na yango na ngambo ya este ya Yordani, oyo etalana na Jeriko. » \s1 Yawe aponi bato mpo na kokabola mokili \p \v 16 Yawe alobaki lisusu na Moyize : \v 17 « Tala bato oyo bakokabola mokili kati na bino : Nganga-Nzambe Eleazari mpe Jozue, mwana mobali ya Nuni. \v 18 Bokozwa lisusu mokambi moko kati na libota moko na moko mpo na kokabola mokili. \b \li4 \v 19 Tala bakombo na bango : \b \li1 Mpo na libota ya Yuda : Kalebi, mwana mobali ya Yefune ; \li1 \v 20 mpo na libota ya Simeoni : Samuele, mwana mobali ya Amiwudi ; \li1 \v 21 mpo na libota ya Benjame : Elidadi, mwana mobali ya Kisiloni ; \li1 \v 22 mpo na libota ya Dani : mokambi Buki, mwana mobali ya Yogili ; \li1 \v 23 mpo na bana ya Jozefi, libota ya Manase : mokambi Anieli, mwana mobali ya Efodi ; \li1 \v 24 libota ya Efrayimi : mokambi Kemweli, mwana mobali ya Shifitani ; \li1 \v 25 mpo na libota ya Zabuloni : mokambi Elitsafani, mwana mobali ya Parinaki ; \li1 \v 26 mpo na libota ya Isakari : mokambi Palitieli, mwana mobali ya Azani ; \li1 \v 27 mpo na libota ya Aseri : mokambi Ayiwudi, mwana mobali ya Shelomi ; \li1 \v 28 mpo na libota ya Nefitali : mokambi Padeyeli, mwana mobali ya Amiwudi. » \b \li4 \v 29 Bango wana nde bato oyo Yawe apesaki mokumba ya kokabola mokili ya Kanana kati na bana ya Isalaele. \c 35 \s1 Bana ya Isalaele bapesi Balevi bingumba \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize kati na etando ya Moabi, pembeni ya Yordani oyo etalani na Jeriko : \v 2 « Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bapesa na Balevi, wuta na libula oyo bakozwa, bingumba ya kovanda elongo na mabele oyo ezali zingazinga na yango. \v 3 Bingumba ekozala mpo na kovanda, mpe mabele ya zingazinga mpo na bibwele na bango, bisalelo na bango mpe banyama na bango nyonso. \v 4 Mabele ya zingazinga ya bingumba oyo bokopesa na Balevi ekozala etando ya bametele pene nkama mitano kobanda na mir ya engumba. \v 5 Na libanda ya engumba, bokozwa etando ya bametele pene nkoto moko na ngambo ya este, nkoto moko na ngambo ya weste, nkoto moko na ngambo ya nor mpe nkoto moko na ngambo ya sude ; mpe engumba ekozala na kati-kati. Yango nde ekozala mabele na bango ya zingazinga. \v 6 Bokobongisa mpo na Balevi bingumba motoba ya kokimela mpo ete moto oyo abomi moninga na nko te akoka kokima kuna ; bokobakisa bingumba mosusu tuku minei na mibale. \v 7 Na nyonso, bokopesa na Balevi bingumba tuku minei na mwambe, moko na moko elongo na mabele na yango ya zingazinga. \v 8 Mpo na bingumba oyo bokopesa na Balevi wuta na libula ya mabele ya bana ya Isalaele, bosengeli kozwa yango kolanda bozwi ya libota moko na moko : libota oyo ezali na bingumba ebele ekopesa mpe bingumba ebele ; libota oyo ezali na bingumba moke ekopesa mpe bingumba moke. » \s1 Yawe apesi na bana ya Isalaele bingumba ya kokimela \p \v 9 Yawe alobaki na Moyize : \v 10 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na Kanana, \v 11 bokopona bingumba ya kokimela mpo ete moto oyo akoboma moto na nko te akoka kokima kuna. \v 12 Bingumba yango ekozala ekimelo mpo na bino liboso ya mobukanisi makila ; na bongo mobomi akokufa te soki asambi nanu te na miso ya lisanga. \v 13 Kati na bingumba oyo bokopesa, bingumba motoba ekozala ekimelo mpo na bino : \v 14 misato na ngambo ya Yordani, mpe misato kati na Kanana. Ekozala bingumba ya kokimela. \v 15 Bingumba nyonso motoba ekozala ekimelo mpo na bana ya Isalaele mpe mpo na bapaya oyo bakozala kati na bino. Boye moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoki kokima kuna. \p \v 16 Soki abeti moninga na ye libende, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; basengeli koboma ye. \v 17 Soki abeti moninga na ye libanga, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; basengeli koboma ye. \v 18 Soki abeti moninga na ye nzete, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; basengeli koboma ye. \v 19 Ezali mobukanisi makila nde akoboma mobomi : akoboma ye tango kaka akokutana na ye. \v 20 Soki abambi moninga na ye eloko na nko mpe moninga yango akufi \v 21 to soki abeti moninga na ye likofi mpo ete alingaka ye te, mpe moninga yango akufi, moto wana azali mobomi ; boye mobukanisi makila akoboma mobomi tango kaka akokutana na ye. \p \v 22 Kasi soki moto atindiki moninga na ye na nko te to na kokana te, soki abambi ye eloko na makanisi mabe te, \v 23 soki akweyiseli ye libanga na nko te mpe na kokana te, mpe moninga yango akufi, \v 24 lisanga ekokata makambo oyo kolanda mibeko kati ya mobomi mpe mobukanisi makila. \v 25 Lisanga ekokangola mobomi na maboko ya mobukanisi makila mpe ekozongisa ye kati na engumba ya kokimela epai wapi akimaki. \p Mobomi akovanda kuna kino na kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo bapakolaki mafuta ya bule. \v 26 Nzokande soki mobomi alongwe na engumba ya kokimela epai wapi akimaki, \v 27 mpe soki mobukanisi makila akutani na ye libanda ya engumba na ye ya kokimela mpe abomi ye, mobukanisi makila asali mabe te. \v 28 Pamba te mobomi asengeli kovanda kati na engumba na ye ya kokimela kino na kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Ezali kaka sima ya kufa na ye nde akoki kozonga na mabele na ye. \p \v 29 Mitindo oyo ekozala mibeko mpo na bino mpe mpo na bakitani na bino nyonso, na bisika nyonso oyo bokovanda. \v 30 Tango nyonso oyo moto akoboma moninga na ye, bakoboma mobomi soki kaka batatoli ebele bafundi, pamba te litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kokatela moto etumbu ya kufa. \p \v 31 Bokondima kozwa eloko moko te mpo na kosikola bomoi ya mobomi oyo asengeli na kufa ; basengeli kaka koboma ye. \v 32 Bokondima mpe kozwa eloko moko te mpo na kopesa ye nzela ya kokima na engumba songolo ya kokimela to ya kozonga kovanda lisusu kati na mokili na ye liboso ya kufa ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. \v 33 Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bozali. Solo, kosopa makila ekomisaka mokili mbindo ; pamba te soki makila esopani na mokili, ezali kaka na nzela ya makila ya moto oyo asopi yango nde bakoki kokomisa lisusu mokili peto. \v 34 Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bokovanda, mokili epai wapi Ngai mpe nakovanda ; pamba te nazali Yawe, navandaka kati na bana ya Isalaele. › » \c 36 \s1 Libula ya bana basi ya Tselofikadi \p \v 1 Bakonzi ya mabota ya etuka ya bakitani ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase mpe mokitani ya Jozefi, bayaki liboso ya Moyize mpe liboso ya bakambi ya mabota ya Isalaele mpo na kosolola na bango. \v 2 Balobaki : « Tango Yawe apesaki mitindo epai ya nkolo na ngai ete apesa mokili lokola libula epai ya bana ya Isalaele na kobeta zeke, apesaki yo mpe mitindo ya kopesa libula ya Tselofikadi, ndeko na biso ya mobali, epai ya bana na ye ya basi. \v 3 Boye, soki esalemi ete bana basi yango babali mibali oyo bawuti na mabota mosusu ya Isalaele, libula na bango ekolongwa na libula ya batata na biso, mpe bakobakisa yango na libula ya libota ya mibali oyo bakobala bango. Bongo, libula oyo epesamelaki biso ekokoma moke. \v 4 Tango mobu ya kosepela kokangolama ekokoma mpo na bana ya Isalaele, libula ya bana basi yango ekobakisama na libula ya mabota ya mibali oyo babalaki bango, mpe bakozwa mabele na bango wuta na libula ya libota ya bakoko na biso. » \p \v 5 Boye, na etinda ya Yawe, Moyize epesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele : « Makambo oyo libota ya bakitani ya Jozefi balobi ezali na nzela. \v 6 Tala liloba oyo Yawe alobaki mpo na bana basi ya Tselofikadi : ‹ Bakoki solo kobalana na mibali nyonso oyo bango balingi, kasi ezala kaka kati na mibali ya libota ya tata na bango. \v 7 Pamba te libula moko te kati na Isalaele ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu ; moto nyonso ya Isalaele asengeli kobatela mabele ya libota oyo azwaki lokola libula wuta na bakoko na ye. \v 8 Mwana mwasi nyonso kati na bikolo ya Isalaele oyo akozwa mabele lokola libula asengeli kobalana kaka na mobali ya libota ya tata na ye mpo ete moto nyonso ya Isalaele azwa libula ya tata na ye. \v 9 Libula moko te ekoki kolongwa na libota moko mpo na kokende na libota mosusu, pamba te libota moko na moko ya Isalaele esengeli kobatela mabele oyo esili kozwa lokola libula. › » \p \v 10 Boye, bana basi ya Tselofikadi basalaki ndenge kaka Yawe atindaki na nzela ya Moyize. \v 11 Bana basi ya Tselofikadi : Mala, Tiritsa, Ogila, Milika mpe Noa ; babalanaki na bandeko na bango, na ngambo ya libota ya tata na bango. \v 12 Babalanaki kati na etuka ya bakitani ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, mpe libula na bango etikalaki na libota mpe etuka ya tata na bango. \b \p \v 13 Oyo ezali nde mibeko mpe malako oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize epai ya bana ya Isalaele na bitando ya Moabi, oyo etalana na Jeriko, pene ya Yordani.