\id NEH Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Neyemi \toc1 Neyemi \toc2 Neyemi \toc3 Ne \mt1 Neyemi \c 1 \s1 Sango na tina na Yelusalemi \p \v 1 Maloba ya Neyemi, mwana mobali ya Akalia. \b \p Na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi, na sanza ya kisilevi, wana nazalaki nanu na Size, mboka mokonzi, \v 2 Anani, moko kati na bandeko na ngai, ayaki elongo na bato mosusu wuta na Yuda. Natunaki bango sango ya Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu, mpe sango ya Yelusalemi. \p \v 3 Balobaki na ngai : « Bayuda oyo babikaki mpe batikalaki wuta na bowumbu bazali kovanda kati na etuka ya Yuda mpe bazali na pasi mingi mpe na soni makasi ; mir ya Yelusalemi etondi na madusu, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto. » \s1 Libondeli ya Neyemi \p \v 4 Tango kaka nayokaki makambo oyo nyonso, namivandisaki na mabele mpe nakomaki kolela. Nasalaki mikolo mwa mingi ya matanga, na kokila bilei mpe na kosambela Nzambe ya Likolo. \v 5 Nabondelaki : \pm « Oh Yawe, Nzambe ya Likolo, Nzambe monene mpe Nzambe ya somo ! Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo epai ya bato oyo balingaka Yo mpe batosaka mibeko na Yo, \v 6 tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi mpe miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na koyoka libondeli oyo mowumbu na Yo azali kosala liboso na Yo, butu mpe moyi, na tina na basali na Yo, bana ya Isalaele. Nazali kotubela masumu oyo biso bana ya Isalaele, ezala ngai mpe libota ya tata na ngai, tosalaki liboso na Yo. \v 7 Tosalaki solo mabe makasi liboso na Yo ; totosaki te mitindo, bikateli mpe mibeko oyo opesaki na nzela ya Moyize, mosali na Yo. \pm \v 8 Nabondeli Yo, kanisa maloba oyo otindaki Moyize, mosali na Yo, koloba : ‹ Soki botamboli na bosembo te, nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya. \v 9 Kasi soki bozongeli Ngai mpe botosi mibeko na Ngai, wana, ezala soki bato na bino bakenda mosika na bowumbu kino na suka ya mokili, nakosangisa bango wuta kuna mpe nakomema bango na esika oyo naponaki mpo na kovandisa Kombo na Ngai. › \v 10 Bazali basali na Yo mpe bato na Yo, oyo osilaki kokangola na nguya monene na Yo mpe na makasi ya loboko na Yo ! \v 11 Oh Nkolo, nabondeli Yo, tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi libondeli ya mowumbu na Yo mpe libondeli ya bawumbu na Yo mosusu oyo bazali kosepela kopesa lokumu na Kombo na Yo ! Na mokolo ya lelo, longisa mowumbu na Yo mpe salela ye ngolu na miso ya moto oyo ! » \p Nzokande, na tango wana, nazalaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi. \c 2 \s1 Neyemi azwi ndingisa ya kokende na Yelusalemi \p \v 1 Na sanza ya Nisani\f + \fr 2.1 \fr*\ft Nisani ezali sanza ya liboso na manaka ya Bayuda.\ft*\f*, na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi, lokola vino ezalaki liboso ya mokonzi, nazwaki vino mpe napesaki ye mpo ete amela. Ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kozala mawa-mawa liboso ya mokonzi. \v 2 Boye mokonzi atunaki ngai : \pi1 — Mpo na nini elongi na yo ezali mawa-mawa lokola nde ozali kobela, nzokande ozali kobela te ? Boni, ozali na mawa na motema ? \p Nabangaki makasi ; \v 3 kasi nazongiselaki mokonzi : \pi1 — Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! Ndenge nini elongi na ngai ezala mawa-mawa te tango engumba epai wapi bakunda batata na ngai ebebi mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ? \p \v 4 Mokonzi atunaki ngai : \pi1 — Olingi nini ? \p Nasambelaki Nzambe ya Likolo, \v 5 mpe nazongiselaki mokonzi : \pi1 — Soki esepelisi mokonzi mpe soki mowumbu na ye azwi ngolu na miso na ye, tika ete mokonzi atinda ngai na engumba Yuda epai wapi bakunda batata na ngai, mpo ete nakende kotonga yango lisusu. \p \v 6 Mokonzi, oyo mwasi na ye avandaki pembeni na ye, atunaki ngai : \pi1 — Mobembo na yo ekosala mikolo boni mpe okozonga tango nini. \p Esepelisaki mokonzi kotinda ngai ; mpe nakataki tango oyo mobembo yango ekokaki kosala. \v 7 Nalobaki na ye lisusu : \pi1 — Soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi apesa ngai mikanda mpo na bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpo ete batika ngai koleka kino nakokoma kati na Yuda ; \v 8 mpe tika ete nazwa mokanda mpo na Azafi, mokengeli ya zamba ya mokonzi, mpo ete apesa ngai mabaya ya motondo mpo na bikuke ya engumba batonga makasi pene ya Tempelo, mpo na mir ya engumba mpe mpo na ndako oyo nakovanda. \p Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai, mokonzi apesaki ngai mikanda yango. \s1 Neyemi akomi na Yelusalemi \p \v 9 Nakendeki epai ya bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe napesaki bango mikanda ya mokonzi. Mokonzi atindaki lisusu bakonzi ya basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda mpo ete bazala elongo na ngai. \v 10 Tango kaka Sanibala, moto ya Oroni, mpe Tobiya, kalaka ya mboka Amoni, bayokaki ete nazali koya, basepelaki ata moke te komona moto moko koya mpo na bolamu ya bana ya Isalaele. \s1 Neyemi atali bamir ya Yelusalemi \p \v 11 Nakomaki na Yelusalemi mpe, sima na ngai kosala kuna mikolo misato, \v 12 nabimaki na butu elongo na ndambo ya bato. Nalobaki na moto ata moko te makambo oyo Nzambe na ngai atiaki kati na motema na ngai, makambo oyo nasengeli kokokisa mpo na bolamu ya Yelusalemi. Ezalaki na nyama mosusu te elongo na ngai longola kaka nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango. \v 13 Na butu, nabimelaki na ekuke oyo ememaka na Lubwaku, nakendeki na nzela oyo ekenda na etima ya Dalagona mpe na Ekuke ya Fulu, mpo na kotala malamu-malamu bamir ya Yelusalemi, oyo etondaki na madusu mpe bikuke na yango esilaki kobebisama na moto. \v 14 Nalekaki pembeni ya Ekuke ya Etima mpe pembeni ya Liziba ya mokonzi, kasi nzela ezalaki penza te mpo ete nyama oyo nazalaki kotambola likolo na yango ekoka koleka. \v 15 Namataki wuta na lubwaku, kaka na butu, mpo na kokoba kotala malamu-malamu mir. Nabalukaki mpe nazongelaki na nzela ya Ekuke ya Lubwaku. \v 16 Bakalaka bayebaki te esika oyo nakendeki to likambo oyo nazalaki kosala ; pamba te kino na ngonga wana, nalobaki nanu ata likambo moko te, ezala epai ya Bayuda, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya bankumu, epai ya bayangeli to mpe epai ya bakambi mosusu oyo bazalaki kosala mosala. \v 17 Bongo nalobaki na bango : \pi1 — Bozali komona pasi oyo tozali na yango ! Yelusalemi ebebi, mpe bikuke na yango ebebisamaki na moto ! Boya, totonga lisusu mir ya Yelusalemi mpo ete tolongwa kati na soni oyo ! \p \v 18 Nayebisaki bango lisusu ndenge nini loboko ya ngolu ya Nzambe na ngai ezalaki likolo na ngai mpe makambo oyo mokonzi alobaki na ngai. Mbala moko, bazongisaki : \pi1 — Totelema mpe totonga ! \p Boye bazwaki mpiko mpe babandaki mbala moko mosala kitoko yango. \p \v 19 Kasi tango Sanibala, moto ya Oroni ; Tobiya, kalaka ya mboka Amoni ; mpe Geshemi, moto ya mboka Arabi, bayokaki sango na yango, basekaki mpe batiolaki biso. Balobaki : \pi1 — Eloko nini oyo bozali kosala ? Bozali kotombokela mokonzi ? \p \v 20 Nazongiselaki bango : \pi1 — Nzambe ya Likolo akolongisa biso solo. Biso bawumbu na Ye, tokotelema mpe tokotonga. Kasi bino, bozali ata na eteni moko te ya mabele to na bokonzi moko te kati na Yelusalemi, mpe moto moko te akozala kuna na ekaniseli malamu mpo na bino ! \c 3 \s1 Bato ya Yuda batongi mir ya Yelusalemi \p \v 1 Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na Banganga-Nzambe oyo bazalaki sima na ye bakotaki na mosala mpe batongaki lisusu Ekuke ya Bibwele. Babulisaki yango mpe batiaki bizipelo na yango ; bongo bakobaki kobongisa mir, babulisaki yango, longwa na ndako molayi ya Meya kino na ndako molayi ya Ananeyeli. \p \v 2 Bato ya Jeriko babongisaki eteni ya mir oyo ekanganaki na yango ; mpe Zakuri, mwana mobali ya Imiri, atongaki pene na bango. \v 3 Bana mibali ya Senaya basalaki Ekuke ya Mbisi ; balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo na yango elongo na basete mpe bakumba na yango. \v 4 Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Meshulami, mwana mobali ya Berekia, mwana mobali ya Meshezabeyeli, azalaki kosala pene na ye ; mpe Tsadoki, mwana mobali ya Baana, azalaki kosala mwa mosika na bango. \v 5 Bato ya Tekoa babongisaki eteni ya mir oyo elandaki, kasi bakambi na bango baboyaki kosala na se ya mitindo ya batambolisi na bango ya misala. \v 6 Yoyada, mwana mobali ya Paseya, mpe Meshulami, mwana mobali ya Besodia, babongisaki Ekuke ya Yeshana\f + \fr 3.6 \fr*\ft Yeshana elingi koloba : Ekuke ya mir ya kala.\ft*\f*. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba. \p \v 7 Melatia, moto ya Gabaoni, Yadoni, moto ya Meronoti, mpe bato mosusu ya Gabaoni mpe ya Mitsipa oyo bazalaki kosala na se ya bokonzi ya moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate bazalaki mpe kosala pene na bango. \v 8 Uzieli, mwana mobali ya Araya, moko kati na banyangwisi bibende na moto, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. Bongo Anania, moko kati na basali oyo basalaka malasi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo elandaki. Babongisaki mir ya Yelusalemi kino na esika ya mir monene. \v 9 Refaya, mwana mobali ya Wuri, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, abongisaki eteni ya mir oyo elandaki. \v 10 Yedaya, mwana mobali ya Arumafi, azalaki kosala pembeni na bango. Atushi, mwana mobali ya Ashabinia, azalaki kolanda ye. Boye atongaki eteni ya mir oyo etalanaki na ndako na ye. \v 11 Malikiya, mwana mobali ya Arimi, mpe Ashubi, mwana mobali ya Paati-Moabi, babongisaki eteni mosusu ya mir mpe ndako molayi ya Fulu. \p \v 12 Shalumi, mwana mobali ya Aloeshi, mokambi ya ndambo ya etuka ya Yelusalemi, elongo na bana na ye ya basi babongisaki eteni ya mir oyo elandaki. \v 13 Anuni mpe bavandi ya Zanoa babongisaki Ekuke ya Lubwaku. Balatisaki yango mabaya, batiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Babongisaki lisusu bametele pene nkama mitano ya mir kino na Ekuke ya Fulu. \v 14 Malikiya, mwana mobali ya Rekabi, mokambi ya etuka ya Beti-Akeremi, abongisaki Ekuke ya Fulu. Alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba. \v 15 Shalumi, mwana mobali ya Koli-Oze, mokambi ya etuka ya Mitsipa, abongisaki Ekuke ya Liziba ; atiaki mwanza likolo na yango, alatisaki yango mabaya, atiaki bizipelo, basete mpe bakumba. Atongaki lisusu mir ya Liziba ya Siloe, pembeni ya elanga ya mokonzi, kino na bibutelo oyo ewuta na engumba ya Davidi. \p \v 16 Neyemi, mwana mobali ya Azibuki, mokambi ya ndambo ya etuka ya Beti-Tsuri, abongisaki wuta na esika oyo Shalumi asukelaki kino na esika oyo etalana na bakunda ya Davidi, kino na liziba oyo bato batimola na maboko mpe kino na ndako ya basoda ya mpiko oyo bazalaki kokengela Davidi. \v 17 Balevi, na bokambami ya Rewumi, mwana mobali ya Bani, batongaki longwa na esika oyo Neyemi asukelaki. Ashabia, mokambi ya ndambo ya etuka ya Keila, atongaki mpe pembeni na bango mpo na etuka na ye. \v 18 Bandeko na ye batongaki pembeni na ye, na bokambami ya Binuwi, mwana mobali ya Enadadi, mokambi ya ndambo mosusu ya etuka ya Keila. \v 19 Ezeri, mwana mobali ya Jozue, mokambi ya Mitsipa, abongisaki esika mosusu, longwa na esika oyo etalani na ndako oyo babombelaka bibundeli kino na esika oyo bamir ekutana. \p \v 20 Bongo na mopanzi na ye, Baruki, mwana mobali ya Zakayi, abongisaki na bolingo oyo eleka ndelo eteni mosusu ya mir, longwa na esika oyo bamir ekutana kino na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe. \v 21 Pene na ye, Meremoti, mwana mobali ya Uri, koko ya Akotsi, abongisaki eteni mosusu ya mir oyo ezalaki longwa na Ekuke ya Ndako ya Eliashibi kino na suka na yango. \v 22 Banganga-Nzambe oyo bazalaki kovanda na bamboka mike-mike ya zingazinga, bango mpe babongisaki sima na ye. \v 23 Benjame mpe Ashubi, bango mpe babongisaki eteni ya mir oyo ezalaki liboso ya bandako na bango, longwa na esika oyo basukelaki. Pene na bango, Azaria, mwana mobali ya Maaseya mpe koko ya Anania, abongisaki pembeni ya ndako na ye. \v 24 Pene na ye, Binuwi, mwana mobali ya Enadadi, abongisaki eteni mosusu, longwa na ndako ya Azaria kino na esika oyo bamir ekutana mpe kino na songe. \p \v 25 Palali, mwana mobali ya Uzayi, abongisaki longwa na esika oyo etalani na esika oyo bamir ekutana, esika oyo etalani na ndako molayi oyo eleki ndako ya mokonzi na molayi, pembeni ya lopango ya Boloko. Pene na ye, Pedaya, mwana mobali ya Pareoshi, \v 26 elongo na basali ya Tempelo, oyo bazalaki kovanda na ngomba Ofeli, babongisaki kino na esika oyo etalani na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este, mpe na ndako oyo eleki na molayi. \v 27 Pembeni na bango, bato ya Tekoa babongisaki eteni mosusu ya mir longwa na ndako molayi oyo eleki molayi kino na mir ya Ofeli. \v 28 Longwa na Ekuke ya Bampunda, moko na moko kati na Banganga-Nzambe abongisaki liboso ya ndako na ye. \v 29 Pene ya Banganga-Nzambe, Tsadoki, mwana mobali ya Imeri, abongisaki liboso ya ndako na ye. Bongo pembeni na ye, Shemaya, mwana mobali ya Shekania, mokengeli Ekuke ya ngambo ya este, abongisaki eteni na ye. \v 30 Pene na ye, Anania, mwana mobali ya Shelemiya, mpe Anuni, mwana mobali ya motoba ya Tsalafi, babongisaki eteni mosusu ya mir. Bongo pene na bango, Meshulami, mwana mobali ya Berekia, abongisaki liboso ya ndako na ye. \p \v 31 Pene na Meshulami, Malikiya, moko kati na basali oyo banyangwisaka bibende na moto, abongisaki eteni na ye kino na ndako ya basali ya Tempelo mpe ya bato ya mombongo. Eteni yango etalani na Ekuke ya Kokengela mpe kino na shambre ya likolo, na esika oyo bamir ekutana. \v 32 Bongo banyangwisi bibende na moto mpe bato ya mombongo babongisaki longwa na shambre ya likolo, na esika oyo bamir ekutani, kino na Ekuke ya Bibwele. \c 4 \s1 Batelemeli misala ya kotonga \p \v 1 Tango Sanibala ayokaki ete tozali kotonga lisusu mir, asepelaki ata moke te mpe atombokaki makasi. Akomaki kotiola Bayuda \v 2 mpe koloba liboso ya baninga na ye mpe ya mampinga ya Samari : \pi1 — Bayuda oyo balemba-lemba boye bazali kosala nini ? Bakanisi ete bakotelemisa lisusu mir na bango to kobonza lisusu mbeka ? Bakanisi penza ete, mokolo moko, bakosilisa mosala oyo to bakokoka solo kopesa bomoi na mabanga oyo ekundama na se ya mabele mpe esila kozika ? \p \v 3 Tobiya, moto ya Amoni, oyo azalaki pembeni na ye alobaki : \pi1 — Nini yango penza bazali kotonga ! Mir oyo, soki ata mbwa moko ya zamba emati na likolo na yango, ekokweya ! \b \pm \v 4 Oh Nzambe na biso, yoka biso, pamba te totiolami ! Sala ete kotiola na bango ezonga na mito na bango moko ! Kaba bango na mboka ya bowumbu lokola bomengo ya bitumba. \v 5 Kozipa mabe na bango te mpe kolongola masumu na bango na miso na Yo te, pamba te basili kofinga bato oyo bazali kotonga mir. \b \p \v 6 Bongo tokobaki kotonga mir yango kino nyonso ekomaki na kati-kati ya bosanda, pamba te moto nyonso azalaki kosala mosala na motema na ye mobimba. \p \v 7 Tango Sanibala, Tobiya, bato ya mokili ya Arabi, ya Amoni mpe ya Asidodi bayokaki ete misala ya kobongisa bamir ya Yelusalemi mpe ya kobamba madusu na yango epusani, batombokaki makasi. \v 8 Bango nyonso basanganaki mpo na koya kobundisa Yelusalemi mpe kotia mobulu kati na yango. \v 9 Kasi tosambelaki Nzambe na biso mpe totiaki bakengeli, butu mpe moyi, mpo ete babundela biso liboso na bango. \v 10 Nzokande, na tango yango kaka, bato ya Yuda bazalaki koyimayima : « Awa bato oyo bazali komema mabele bazali lisusu na makasi te, mpe mipiku ya mabanga ya mir oyo ekweya ezali nanu ya komata, tokotikala kolonga te kotonga lisusu mir oyo ! » \p \v 11 Na ngambo ya banguna na biso, bazalaki koloba : « Liboso na bango koyeba ete ezali biso mpe komona biso na miso, tokomikotela kati na bango na pwasa mpo ete toboma bango mpe tosukisa mosala na bango. » \p \v 12 Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na bango bayaki mbala zomi koyebisa biso mabongisi na bango : « Na bisika nyonso oyo bokozala, bakobundisa biso ! » \p \v 13 Yango wana, natiaki bato na se, na sima ya mir, na bisika ya polele ; natiaki bango na masanga kolanda bituka na bango ; mpe basimbaki mipanga, makonga mpe matolotolo na bango. \v 14 Sima na ngai kolandela malamu makambo nyonso, natelemaki mpe nalobaki na bankumu, na bakalaka mpe na bato mosusu : « Bobanga bango te ! Bokanisa Yawe oyo azali Nzambe Monene mpe ya somo, mpe bobunda mpo na bandeko na bino, mpo na bana na bino ya mibali mpe ya basi, mpo na basi na bino mpe mpo na bandako na bino ! » \p \v 15 Tango banguna na biso bayokaki ete toyebi mabongisi na bango mpe ete Nzambe abebisi yango, biso nyonso tozongaki na mir ; moko na moko azongelaki mosala na ye. \p \v 16 Wuta mokolo wana, kati-kati kaka ya bato na ngai nde bazalaki kosala mosala ; kati-kati mosusu basimbaki makonga, banguba, matolotolo mpe balataki bilamba ya bibende oyo batiaka na tolo. Bakonzi ya basoda batelemaki na sima ya bato nyonso ya Yuda. \v 17 Ezala ba-oyo bazalaki kotonga mir mpe ba-oyo bazalaki komema mabele mpe biloko ya mosala, bango nyonso bazalaki kosala na loboko moko ; bongo na loboko mosusu, basimbaki ebundeli. \v 18 Moko na moko kati na batongi ndako azalaki na mopanga na ye na loketo, mpe azalaki kosala mosala na ye ndenge wana. Na mopanzi na ngai, ezalaki na moto moko abongama mpo na kobeta kelelo. \v 19 Bongo nalobaki na bankumu, bakalaka mpe bato mosusu : \pi1 — Mosala ezali nanu monene mpe ekenda na etando molayi ; kasi biso topanzani mingi na mir, tozali mosika-mosika, bamoko na bamosusu. \v 20 Na esika nyonso oyo bokoyoka lolaka ya kelelo, boya noki kosangana na biso ; Nzambe na biso akobundela biso. \p \v 21 Ezali ndenge wana nde tokobaki mosala na biso elongo na ndambo ya bato basimba makonga na maboko, kobanda na tongo kino na tango oyo minzoto ebimaka. \v 22 Na tango yango kaka, nalobaki lisusu na bato : « Tika ete moto nyonso alekisaka butu kati na Yelusalemi elongo na mowumbu na ye ; boye na butu, bakokengela mpo na biso, mpe na moyi, bakokoba mosala. » \p \v 23 Ezala ngai, bandeko na ngai, basali na ngai to bakengeli oyo bazalaki elongo na ngai, moko te azalaki kolongola bilamba na ye ; moto nyonso azalaki na ebundeli na ye na loboko ata tango azalaki kokende kosukola. \c 5 \s1 Neyemi asungi babola \p \v 1 Mibali elongo na basi na bango bayimaki-yimaki makasi mpo na kotelemela bandeko na bango, Bayuda. \v 2 Bamoko bazalaki koloba : \pi1 — Biso elongo na bana na biso ya mibali mpe ya basi, tozali ebele ; tozali na posa ya ble oyo ekoki na motango na biso mpo ete tolia mpe towumela na bomoi. \p \v 3 Bamosusu bazalaki mpe koloba : \pi1 — Tozali kosimbisa bilanga na biso, bilanga na biso ya vino mpe bandako na biso lokola ndanga\f + \fr 5.3 \fr*\ft Eloko oyo basimbisaka mpo na kozwa niongo.\ft*\f* mpo na kozwa ble na tango ya nzala makasi. \p \v 4 Bamosusu lisusu bazalaki koloba : \pi1 — Topesaki bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vino lokola ndanga mpo na kodefa mbongo ya kofuta mpako ya mokonzi. \v 5 Nzokande tozali nzoto moko mpe makila moko na bandeko na biso, mpe bana na biso bakeseni te na bana na bango ; kasi tala ndenge nini tosili kosambwa : tosengeli koteka bana na biso ya mibali mpe ya basi lokola bawumbu ; mpe bana na biso mosusu ya basi bakomi bawumbu, mpe tozangi nguya ya kosikola bango, mpo ete bilanga na biso mpe bilanga na biso ya vino ekomi ya bato mosusu ! \p \v 6 Tango nayokaki koyimayima na bango mpe maloba wana nyonso, nasilikaki makasi. \v 7 Nazwaki mokano ya kopamela bakambi mpe bankumu ; nalobaki na bango : \pi1 — Tango bodefisaka bandeko na bino, bosengaka bango mileki ! Bozali nde komemisa bandeko na bino moko mokumba monene boye ! \p Nabengisaki mayangani moko ya monene mpo na kolobela makambo yango elongo na bango. \v 8 Nalobaki na bango : \pi1 — Biso, kolanda makoki na biso, tosikolaki bandeko na biso, Bayuda, oyo batekamaki epai ya bapagano. Kasi bino sik’oyo, bozali bino moko koteka bandeko na bino, mpe bozali koteka bango kaka epai ya bato ya ekolo na biso ! \p Bavandaki kimia mpe bazangaki liloba ya kozongisa. \v 9 Nabakisaki : \pi1 — Makambo oyo bozali kosala ezali malamu te. Bosengelaki te kotambola na kotosa Nzambe na biso mpo ete topesa te na bapagano oyo bazali banguna na biso nzela ya kotiola biso ? \v 10 Ngai, bandeko na ngai mpe basali na ngai, todefisaki bango mbongo mpe ble. Nabondeli bino, totikela bango niongo yango ! \v 11 Bozongisela bango na lombangu bilanga na bango, bilanga na bango ya vino, bilanga na bango ya banzete ya olive mpe bandako na bango ; mpe botikela bango eteni ya nkama moko ya mbongo, ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta oyo bokatelaki bango lokola mileki. \p \v 12 Bazongisaki : \pi1 — Tokosala ndenge olobi, tokozongisa yango mpe tokosenga bango lisusu eloko moko te na likolo. \p Bongo nabengisaki Banganga-Nzambe ; mpe nasengaki na bakambi mpe bakalaka ete balapa ndayi, liboso ya Banganga-Nzambe, ete bakosala ndenge balaki. \v 13 Mpe napupolaki songe ya nzambala na ngai na koloba : \pi1 — Tika ete Nzambe apupola ndenge ngai nazali kosala mpe abengana, mosika ya ndako na ye mpe ya biloko na ye, moto nyonso oyo akokokisa te elaka na ye ; mpe tika ete bapupola ye ndenge wana mpe atikala maboko pamba ! \p Lisanga mobimba ezongisaki : \pi1 — Amen ! \p Bakumisaki Yawe mpe bakokisaki makambo oyo balakaki. \p \v 14 Wuta mokolo oyo mokonzi akomisaki ngai moyangeli kati na mokili ya Yuda, elingi koloba : kobanda na mobu ya tuku mibale ya bokonzi ya Aritakizerisesi kino na mobu ya tuku misato na mibale, elekaki mibu zomi na mibale, ezala ngai to bandeko na ngai, totikalaki mokolo moko te kobika na mpako oyo bapesaka na moyangeli. \v 15 Nzokande, bayangeli oyo bakambaki liboso na ngai bazalaki konyokola bato mpe kosenga na makasi ete bapesa bilei, vino mpe mbongo ya bibende ya palata, tuku minei. \p Ezala bakalaka na bango mpe bazalaki kaka konyokola bato. Kasi ngai, natikalaki kosala bongo te, pamba te nazalaki kotosa Nzambe. \v 16 Kutu, namipesaki lisusu koleka na mosala ya kobongisa mir oyo ; basali na ngai nyonso bamipesaki mpe na mosala mpe totikalaki kosomba ata eteni moko te ya mabele. \v 17 Na mesa na ngai, bato nkama moko na tuku mitano, Bayuda mpe bakalaka, bazalaki kolia elongo na bato oyo bazalaki koya epai na biso wuta na bikolo ya bapaya ya zingazinga. \v 18 Mikolo nyonso, bazalaki kolambela ngai ngombe moko ya mobali, meme motoba ya malamu mpe basoso ; mpe sima na mikolo zomi nyonso, bazalaki koya kotikela ngai vino ebele. Atako bongo, natikalaki kosenga eloko moko te kati na biloko oyo esengeli mpo na moyangeli, pamba te mokumba ya misala ezalaki makasi na mito ya bato. \pm \v 19 Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai mpe talisa ngai ngolu na Yo mpo na nyonso oyo nasili kosala mpo na bato oyo ! \c 6 \s1 Banguna batelemeli lisusu misala \p \v 1 Tango Sanibala, Tobiya, Geshemi, moto ya mokili ya Arabi, mpe banguna na biso mosusu bayokaki ete nasilisi kotonga lisusu mir mpe etikali na lidusu ata moko te, atako na tango wana namitielaki nanu bizipelo ya bikuke te, \v 2 Sanibala mpe Geshemi batindelaki ngai maloba oyo : \pi1 — Yaka, tokutana na Kefirimi, kati na lubwaku ya Ono. \p Bazalaki na likanisi ya kosala ngai mabe. \v 3 Natindelaki bango bamemi sango koyebisa bango eyano oyo : \pi1 — Nazali na mosala monene ya kosala, nakokoka te koya kuna. Mpo na nini mosala etelema tango nakotika yango mpo na koya kokutana na bino ? \p \v 4 Mbala minei, batindelaki ngai sango kaka moko ; mpe tango nyonso, ngai mpe nazalaki kozongisela bango eyano kaka moko. \v 5 Na mbala ya mitano, Sanibala atindelaki ngai sango moko kaka wana na nzela ya mosali na ye, oyo asimbaki mokanda ya kofungwama na loboko na ye. \v 6 Kati na mokanda yango, bakomaki : \pm « Sango ezali kopanzana kati na bikolo, Geshemi abeti kutu sete mpo na koloba na ngai ete ezali penza solo, ete yo mpe Bayuda bozali komibongisa mpo na kotomboka, mpe ezali mpo na yango nde bozali kotonga lisusu mir oyo. Kolanda sango yango, ozali na posa ya kokoma mokonzi na bango ; \v 7 mpe osili kutu kopona basakoli mpo ete bapanza sango kati na Yelusalemi ete okomi mokonzi ya Yuda ! Sik’oyo, yeba ete sango oyo ekokoma kino penza na matoyi ya mokonzi. Boye, yaka mpo ete tosolola na tina na yango ! » \p \v 8 Natindelaki ye eyano oyo : \pi1 — Kati na nyonso oyo olobi, moko te ezali solo. Ezali makambo oyo yo moko ozali kokanisa na moto na yo ! \p \v 9 Bato wana nyonso bazalaki koluka kobangisa biso ; bazalaki komilobela : \pi1 — Maboko na bango ekolemba makasi, ekokoka lisusu kosala te ; mpe mosala ekosila te, ekotelema ! Bakolemba nzoto mpe bakosundola mosala ! \p Kasi ngai nasambelaki : \pi1 — Sik’oyo, oh Yawe, lendisa maboko na ngai ! \p \v 10 Mokolo moko, nakendeki na ndako ya Shemaya, mwana mobali ya Delaya, koko ya Metabeyeli, oyo amikangelaki na ndako na ye. Alobaki : \pi1 — Tokutana kati na Ndako ya Nzambe, na kati-kati ya Esika ya bule, mpe tokanga bikuke na yango, pamba te bato bazali koya mpo na koboma yo ; bakoya na butu mpo na koboma yo. \p \v 11 Kasi nazongiselaki na ye : \pi1 — Boni, moto lokola ngai akoki penza kokima ! Kutu, moto nani lokola ngai akoki kokimela kati na Ndako ya Nzambe mpe abikisa bomoi na ye ? Nakokende te ! \p \v 12 Nasosolaki mbala moko ete ezali Nzambe te nde atindi ye. Kasi apesaki lisakoli wana na tina na ngai, pamba te Tobiya mpe Sanibala bapesaki ye kanyaka. \v 13 Bapesaki ye kanyaka mpo na kobangisa ngai, mpo ete nasala masumu tango nakolanda toli na ye ; mpe mpo ete babebisa lokumu ya kombo na ngai mpe bayokisa ngai soni. \b \pm \v 14 Oh Nzambe na ngai, kanisa Tobiya mpe Sanibala mpo na misala na bango ! Kanisa lisusu Noadia, mwasi mosakoli, elongo na basakoli mosusu oyo bazalaki komeka kobangisa ngai ! \s1 Basilisi kotonga mir \p \v 15 Boye, misala ya kotonga mir esilaki na mokolo ya tuku mibale na mitano ya sanza ya Eluli\f + \fr 6.15 \fr*\ft Eluli ezali sanza ya motoba na manaka ya Bayuda.\ft*\f* ; esalaki mikolo tuku mitano na mibale. \p \v 16 Tango banguna na biso bayokaki sango yango, bato ya bikolo nyonso ya zingazinga bakomaki kobanga mpe koyoka soni na miso na bango moko, mpo ete basosolaki ete ezali kaka na lisungi ya Nzambe na biso nde mosala ya ndenge wana esalemaki. \p \v 17 Na mikolo wana, bankumu ya Yuda bazalaki kotinda mikanda ebele epai ya Tobiya, mpe biyano ya Tobiya ezalaki kokomela bango. \v 18 Pamba te bato ebele ya Yuda basalaki boyokani elongo na ye, na nzela ya ndayi, mpo ete azalaki bokilo ya Shekania, mwana mobali ya Ara, mpe mpo ete Yoanani, mwana na ye ya mobali, abalaki mwana mwasi ya Meshulami, mwana mobali ya Berekia. \v 19 Bazalaki kutu kokumisa misala na ye na miso na ngai mpe koyebisa ye maloba na ngai. Ezalaki Tobiya wana moto azalaki kotinda mikanda mpo na kobangisa ngai. \c 7 \s1 Kotangama ya bana ya Isalaele \p \v 1 Tango misala ya kotonga mir esilaki mpe natiaki bizipelo ya bikuke, batiaki bakengeli bikuke, bayembi mpe Balevi : bato na bato na mosala na bango. \v 2 Napesaki mokumba ya kokamba engumba Yelusalemi epai ya Anani, ndeko na ngai ya mobali, mpe epai ya Anania, moyangeli ya engumba batonga makasi, oyo, koleka bato ebele, azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa Nzambe. \v 3 Nalobaki na bango : \pi1 — Bikuke ya Yelusalemi esengeli te kofungwama liboso ete moyi engala, mpe, na pokwa, bakokanga makasi bizipelo na yango mpe bakokotisa yango bikangelo, wana bakengeli bikuke bakozala nanu na bisika na bango ya mosala. Botia lisusu lokola bakengeli, bavandi ya Yelusalemi : bamoko bakozala na bisika na bango ya mosala, mpe bamosusu bakokengela pembeni ya bandako na bango. \p \v 4 Nzokande, etando ya engumba Yelusalemi ezalaki monene mpe ekenda mosika makasi, kasi bato kati na yango bazalaki moke mpe bandako etongamaki nanu te. \v 5 Nzambe na ngai apesaki ngai makanisi ya kosangisa bankumu, bakambi mpe bato mosusu mpo na kotanga motango na bango kolanda mabota na bango. Bongo, namonaki buku ya bokoko ya ba-oyo bazongaki bato ya liboso longwa na bowumbu. Tala makomi oyo namonaki kuna : \b \li4 \v 6 Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu ; mpe wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto na engumba na ye ; \v 7 bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Azaria, Raamia, Naamani, Maridoshe, Bilishani, Misipereti, Bigivayi, Neumi mpe Baana. \b \li4 Tala motango ya bana ya Isalaele : \li1 \v 8 Bakitani ya Pareoshi : \li2 nkoto mibale na nkama moko na tuku sambo na mibale. \li1 \v 9 Bakitani ya Shefatia : \li2 nkama misato na tuku sambo na mibale. \li1 \v 10 Bakitani ya Ara : \li2 nkama motoba na tuku mitano na mibale. \li1 \v 11 Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi : \li2 nkoto mibale na nkama mwambe na zomi na mwambe. \li1 \v 12 Bakitani ya Elami : \li2 nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei. \li1 \v 13 Bakitani ya Zatu : \li2 nkama mwambe na tuku minei na mitano. \li1 \v 14 Bakitani ya Zakayi : \li2 nkama sambo na tuku motoba. \li1 \v 15 Bakitani ya Binuwi : \li2 nkama motoba na tuku minei na mwambe. \li1 \v 16 Bakitani ya Bebayi : \li2 nkama motoba na tuku mibale na mwambe. \li1 \v 17 Bakitani ya Azigadi : \li2 nkoto mibale na nkama misato na tuku mibale na mibale. \li1 \v 18 Bakitani ya Adonikami : \li2 nkama motoba na tuku motoba na sambo. \li1 \v 19 Bakitani ya Bigivayi : \li2 nkoto mibale na tuku motoba na sambo. \li1 \v 20 Bakitani ya Adini : \li2 nkama motoba na tuku mitano na mitano. \li1 \v 21 Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi : \li2 tuku libwa na mwambe. \li1 \v 22 Bakitani ya Ashumi : \li2 nkama misato na tuku mibale na mwambe. \li1 \v 23 Bakitani ya Betsayi : \li2 nkama misato na tuku mibale na minei. \li1 \v 24 Bakitani ya Arifi : \li2 nkama moko na zomi na mibale. \li1 \v 25 Bakitani ya mboka Gabaoni : \li2 tuku libwa na mitano. \li1 \v 26 Bato ya bamboka Beteleemi mpe Netofa : \li2 nkama moko na tuku mwambe na mwambe. \li1 \v 27 Bato ya mboka Anatoti : \li2 nkama moko na tuku mibale na mwambe. \li1 \v 28 Bato ya mboka Beti-Azimaveti : \li2 tuku minei na mibale. \li1 \v 29 Bato ya bamboka Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti : \li2 nkama sambo na tuku minei na misato. \li1 \v 30 Bato ya bamboka Rama mpe Geba : \li2 nkama motoba na tuku mibale na moko. \li1 \v 31 Bato ya mboka Mikimasi : \li2 nkama moko na tuku mibale na mibale. \li1 \v 32 Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi : \li2 nkama moko na tuku mibale na misato. \li1 \v 33 Bato ya mboka Nebo mosusu : \li2 tuku mitano na mibale. \li1 \v 34 Bato ya mboka ya Elami mosusu : \li2 nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei. \li1 \v 35 Bato ya mboka Arimi : \li2 nkama misato na tuku mibale. \li1 \v 36 Bakitani ya mboka Jeriko : \li2 nkama misato na tuku minei na mitano. \li1 \v 37 Bato ya bamboka Lodi, Adidi mpe Ono : \li2 nkama sambo na tuku mibale na moko. \li1 \v 38 Bakitani ya engumba Sena : \li2 nkoto misato na nkama libwa na tuku misato. \b \li4 \v 39 Tala motango ya Banganga-Nzambe : \li1 Bakitani ya Yedaeya na nzela ya libota ya Jozue : \li2 nkama libwa na tuku sambo na misato. \li1 \v 40 Bakitani ya Imeri : \li2 nkoto moko na tuku mitano na mibale. \li1 \v 41 Bakitani ya Pashuri : \li2 nkoto moko na nkama mibale na tuku minei na sambo. \li2 \v 42 Bakitani ya Arimi : \li2 nkoto moko na zomi na sambo. \b \li4 \v 43 Tala motango ya Balevi : \li1 Bakitani ya Jozue na nzela ya Kadimieli mpe ya Odeva : \li2 tuku sambo na minei. \b \li4 \v 44 Tala motango ya bayembi : \li1 Bakitani ya Azafi : \li2 nkama moko na tuku minei na mwambe. \b \li4 \v 45 Tala motango ya bakengeli bikuke : \li1 Bakitani ya Shalumi, Ateri, Talimoni, Akubi, Atita mpe Shobayi : \li2 nkama moko na tuku misato na mwambe. \b \li4 \v 46 Basali ya Tempelo : \li1 Bakitani ya Tsika, Asufa, Tabaoti, \v 47 Kerosi, Siya, Padoni, \v 48 Lebana, Agaba, Shalimayi, \v 49 Anani, Gideli, Gaari, \v 50 Reaya, Retsini, Nekoda, \v 51 Gazami, Uza, Paseya, \v 52 Besayi, Mewunimi, Nefusimi, \v 53 Bakibuki, Akufa, Aruri, \v 54 Batsiliti, Meyida, Arisha, \v 55 Barikosi, Sisera, Tama, \v 56 Netsia mpe Atifa. \b \li4 \v 57 Tala bakitani ya basali ya Salomo : \li1 Bakitani ya Sotayi, Sofereti, Perida, \v 58 Yala, Darikoni, Gideli, \v 59 Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Amoni. \li4 \v 60 Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo : nkama misato na tuku libwa na mibale. \b \li4 \v 61 Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adoni mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele : \li1 \v 62 Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda : \li2 nkama motoba na tuku minei na mibale. \b \li4 \v 63 Mpe kati na Banganga-Nzambe : \li1 bakitani ya Obaya, ya Akotsi mpe ya Barizilayi oyo abengamaki « Barizilayi » mpo ete abalaki mwana mwasi ya Barizilayi, moto ya Galadi. \li4 \v 64 Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo. \v 65 Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango na nzela ya Urimi mpe Tumimi. \b \li4 \v 66 Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba, \v 67 bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo ; bazalaki mpe na bayembi ya basi mpe ya mibali nkama mibale na tuku minei na mitano, bampunda nkama sambo na tuku misato na motoba, bamile nkama mibale na tuku minei na mitano, \v 69 bashamo nkama minei na tuku misato na mitano mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale. \b \pm \v 70 Bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki kopesa wuta na mitema na bango moko, mpo na misala ya kotonga Tempelo. Moyangeli apesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto moko, bakopo tuku mitano mpe banzambala nkama mitano na tuku misato ya mosala ya bonganga-Nzambe. \v 71 Bakambi mosusu ya mabota bapesaki na libenga ya misala mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale mpe mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale na nkama mibale na tuku mibale. \v 72 Batikali kati na bato bapesaki mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku mibale, mbongo ya bibende ya palata nkoto mibale mpe banzambala tuku motoba na sambo ya mosala ya bonganga-Nzambe. \pm \v 73 Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango moko. \p Tango sanza ya sambo ekomaki, bana ya Isalaele bakomaki kovanda kati na bingumba na bango. \c 8 \s1 Botangi Mobeko liboso ya bato \p \v 1 Bato nyonso basanganaki lokola moto moko na libanda, liboso ya Ekuke ya Mayi. Balobaki na Esidrasi, molakisi ya Mobeko, ete abimisa buku ya Mobeko ya Moyize, oyo Yawe apesaki bana ya Isalaele. \v 2 Na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, Nganga-Nzambe Esidrasi amemaki buku ya Mobeko liboso ya lisanga oyo, kati na yango, ezalaki na mibali, basi mpe bato nyonso oyo bazalaki na makoki ya kososola. \v 3 Atangelaki bango buku yango na mongongo makasi, kobanda na tongo kino na pokwa, na esika oyo etalani na Ekuke ya Mayi. Bato nyonso bazalaki koyoka na bokebi botangi buku ya Mobeko. \v 4 Esidrasi, molakisi ya Mobeko, atelemaki na etemelo ya kolobela oyo basalaki na mabaya, kaka mpo na mayangani wana. Matitia, Shema, Anaya, Uri, Ilikia mpe Maaseya batelemaki na ngambo ya loboko na ye ya mobali ; Pedaya, Mishaeli, Malikiya, Ashumi, Ashibadana, Zakari mpe Meshulami batelemaki na ngambo ya loboko na ye ya mwasi. \p \v 5 Mpo ete Esidrasi atelemaki na esika ya likolo koleka bato nyonso, moto nyonso amonaki ye kofungola buku. Mpe tango kaka afungolaki buku yango, bato nyonso batelemaki. \v 6 Esidrasi akumisaki Yawe, Nzambe Monene ; mpe bato nyonso batombolaki maboko na bango mpe bazongisaki : « Amen\f + \fr 8.6 \fr*\ft Amen elakisi : tika ete ezala bongo.\ft*\f* ! » Bongo bafukamaki mpe bakitisaki bilongi na bango kino na se mpo na kogumbamela Yawe. \v 7 Sima, batelemaki ; mpe Balevi oyo : Jozue, Bani, Sherebia, Yamini, Akubi, Shabetayi, Odia, Maaseya, Kelita, Azaria, Yozabadi, Anani mpe Pelaya bakomaki kolimbolela bato Mibeko yango, wana bato bazalaki nanu ya kotelema. \v 8 Balevi bazalaki kotanga kati na buku ya Mobeko ya Nzambe mpe kopesa ndimbola na yango, na ndenge ya malembe mpe ya malamu, mpo ete bato bakoka kososola makomi oyo batangi. \p \v 9 Bato nyonso bazalaki kolela, wana bazalaki koyoka maloba ya Mibeko. Moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, elongo na Balevi oyo bazalaki kolimbolela bato Mibeko balobaki na bato nyonso : \pi1 — Mokolo ya lelo ezali bule mpo na Yawe, Nzambe na biso ; botika kosala matanga mpe botika kolela ! \p \v 10 Neyemi alobaki na bango lisusu : \pi1 — Sik’oyo, bokende, bolia bilei ya kitoko, bomela masanga ya kitoko mpe botinda ndambo epai ya bato oyo bazangi eloko ya kolamba, pamba te mokolo oyo ezali bule mpo na Nkolo na biso. Boye bozala na mawa te, pamba te esengo ya Yawe ezali makasi na bino. \p \v 11 Balevi bazalaki kokitisa bato nyonso mitema, bazalaki koloba na bango : \pi1 — Bozala na kimia, pamba te mokolo ya lelo ezali bule ; bozala na mawa te ! \p \v 12 Bato nyonso bakendeki kolia mpe komela, kotinda ndambo ya bilei epai ya bato oyo bazangaki eloko ya kolamba mpe kosepela na esengo makasi, pamba te basosolaki maloba oyo balimbolelaki bango. \s1 Basepelaki feti ya bandako ya kapo \p \v 13 Na mokolo ya mibale ya sanza, bakambi ya mabota nyonso elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi basanganaki pembeni ya Esidrasi, molakisi ya Mobeko, mpo na koluka koyeba malamu-malamu maloba ya Mibeko. \v 14 Bamonaki ete ekomama kati na Mibeko oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize, ete bana ya Isalaele basengeli kovanda kati na bandako oyo batonga na matiti, na tango ya feti ya sanza ya sambo, \v 15 mpe basengeli kotatola to kopanza kati na bingumba na bango nyonso mpe kati na Yelusalemi liloba oyo : « Bobima wuta na mokili ya bangomba, bomema longwa kuna bitape ya nzete ya olive ya mboka mpe ya zamba, bitape ya nzete ya mirite, mandalala mpe bitape ya nzete ya makasa ebele mpo na kotonga bandako ya matiti, kolanda ndenge ekomama. » \p \v 16 Bato babimaki mpe bamemaki longwa kuna bitape ya banzete ; batongaki bandako ya matiti, na likolo ya mwanza ya bandako na bango, kati na mapango na bango, kati na lopango ya Ndako ya Nzambe, na libanda ya Ekuke ya Mayi mpe na esika oyo ezalaki pembeni ya Ekuke ya Efrayimi. \v 17 Lisanga ya bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu batongaki bandako ya matiti mpe bavandaki kati na yango. Wuta na tango ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, kino na mokolo wana, bana ya Isalaele batikalaki lisusu te kosepela feti yango. Boye, mpo na libaku oyo, bazalaki na esengo makasi. \p \v 18 Mokolo na mokolo, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya suka, Esidrasi azalaki kotanga buku ya Mobeko ya Nzambe. Basepelaki feti mikolo sambo ; mpe na mokolo ya mwambe, kolanda malako ya Mobeko, basalaki mayangani mpo na kosukisa feti. \c 9 \s1 Bana ya Isalaele batubeli masumu na bango \p \v 1 Kaka na sanza wana, na mokolo ya tuku mibale na minei, bana ya Isalaele basanganaki mpo na kokila bilei ; balataki basaki mpe bamipakolaki putulu na mito. \v 2 Bato nyonso oyo babotama na molongo ya bana ya Isalaele bakabwanaki na bapaya nyonso ; batelemaki mpo na kotubela masumu na bango mpe bambeba ya batata na bango. \v 3 Batelemaki na esika oyo bazalaki, mpe buku ya Mobeko ya Yawe, Nzambe na bango, etangamaki ngonga misato ; mpe ngonga misato mosusu, bafukamaki liboso ya Yawe, Nzambe na bango, mpo na kotubela masumu na bango. \p \v 4 Jozue, Buni, Kadimieli, Shebania, Bani, Sherebia mpe Kenani bamataki na etemelo ya kolobela oyo basalaki mpo na Balevi mpe babelelaki Yawe, Nzambe na bango na mongongo makasi. \v 5 Bongo Balevi oyo : Jozue, Kadimieli, Bani, Ashabinia, Sherebia, Odia, Shebania mpe Petaya balobaki : \pi1 — Botelema mpe bokumisa Yawe, Nzambe na bino, mpo na seko na seko : \pm « Tika ete Kombo na Yo ya nkembo epambolama mpe enetolama likolo ya nkembo mpe lokumu nyonso. \v 6 Ezali Yo, bobele Yo, nde ozali Yawe ! Okela Likolo, Likolo oyo eleki Likolo mpe mampinga nyonso ya Likolo ; okela lisusu mabele mpe nyonso oyo ezali kati na yango, bibale minene mpe nyonso oyo ezali kati na yango ; opesaka bomoi na bikelamu nyonso, mpe mampinga ya Likolo egumbamaka liboso na Yo. \pm \v 7 Ezali Yo, Yawe Nzambe, nde oponaki Abrami mpe obimisaki ye longwa na Uri, mokili ya Chalide, mpe opesaki ye kombo Abrayami. \v 8 Omonaki ete motema na ye ezali na boyengebene epai na Yo mpe osalaki boyokani elongo na ye mpo na kopesa na bakitani na ye mokili ya bato ya Kanana, ya bato ya Iti, ya bato ya Amori, ya bato ya Perizi, ya bato ya Yebusi mpe ya bato ya Girigazi. Okokisaki elaka na Yo, pamba te ozali Sembo. \pm \v 9 Omonaki minyoko ya bakoko na biso kati na Ejipito mpe oyokaki koganga na bango pembeni ya ebale monene ya Barozo. \v 10 Osalaki bilembo minene mpe bikamwa mpo na kotelemela Faraon, bakalaka na ye nyonso mpe bato nyonso ya mokili na ye ; pamba te oyebaki kanza ya mitema ya bato ya Ejipito mpe ndenge banyokolaki bakoko na biso. Boye osalaki ete sango ya Kombo na Yo ekende mosika ndenge ezali kino na mokolo ya lelo. \v 11 Okabolaki ebale monene liboso na bango, mpe batambolaki kati na ebale yango lokola na mabele ya kokawuka. Kasi ozindisaki lokola libanga monene kati na mozindo ya mayi makasi, bato oyo bazalaki kolanda bango. \pm \v 12 Otambolisaki bango, na moyi, na nzela ya likonzi ya mapata, mpe, na butu, na nzela ya likonzi ya moto mpo na kongengisa nzela oyo basengelaki kotambola. \v 13 Okitaki na ngomba Sinai, olobaki na bango wuta na likolo mpe opesaki bango malako, mibeko ya solo mpe ya alima, mitindo mpe bikateli malamu. \v 14 Olakisaki bango Saba na Yo ya bule mpe opesaki bango mitindo, bikateli mpe mibeko na nzela ya Moyize, mosali na Yo. \v 15 Tango bazalaki na nzala, opesaki bango bilei wuta na likolo ; mpe tango bazalaki na posa ya mayi, obimiselaki bango mayi wuta na libanga. Olobaki na bango ete bakende kobotola mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa bango. \pm \v 16 Kasi bango, bakoko na biso, bakomaki lolendo mpe mito makasi, batosaki mibeko na Yo te. \v 17 Baboyaki koyoka mpe kokanisa bikamwa oyo osalaki mpo na bolamu na bango. Bakomaki mito makasi mpe, na botomboki na bango, bamiponelaki mokonzi mpo na kozonga na bowumbu na bango. Kasi lokola ozali Nzambe oyo alimbisaka bato, Nzambe oyo atalisaka ngolu mpe ayokaka mawa ; lokola osilikaka noki te mpe otonda na boboto, otikalaki kosundola bango ata moke te, \v 18 ezala tango bamisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende oyo banyangwisa na moto mpe balobaki : ‹ Tala Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito ! › mpe tango balobaki maloba ya nkele mpo na kotelemela Yo. \v 19 Mpo na mawa monene na Yo, otikalaki kosundola bango te na esobe : likonzi ya mapata etikaki bango te, ekobaki kotambolisa bango na nzela na bango, na moyi ; mpe na butu, likonzi ya moto etikaki te kongengisa nzela oyo basengelaki kolanda. \v 20 Opesaki bango Molimo malamu na Yo mpo na kopesa bango bososoli. Opimelaki bango te mana na Yo, oyo bazalaki kolia, mpe opesaki bango mayi ya komela tango bazalaki na posa ya mayi. \pm \v 21 Mibu tuku minei, okokisaki posa na bango nyonso kati na esobe ; bazangaki eloko moko te, bilamba na bango etikalaki kokufa te, mpe makolo na bango etikalaki kovimba te. \v 22 Okabaki mikili mpe bikolo na maboko na bango mpo ete bazwa bituka na bango kino na bandelo na yango. Babotolaki mokili ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani. \v 23 Okomisaki bana na bango ya mibali ebele lokola minzoto ya likolo mpe omemaki bango kino kati na mokili oyo opeselaki bakoko na bango mitindo ete bakende kobotola yango. \v 24 Bana na bango ya mibali bakotaki mpe babotolaki mokili yango. Otiaki na se ya bokonzi na bango, bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna ; okabaki bato ya Kanana elongo na bakonzi na bango na maboko ya bana ya Isalaele mpo ete basala bato ya Kanana ndenge balingi. \v 25 Babotolaki bingumba batonga makasi mpe mabele oyo ebotaka malamu. Babotolaki bandako etonda na biloko ya ndenge na ndenge, mabulu ya mayi batimola wuta kala, bilanga ya vino, ya nzete ya olive mpe ya nzete mosusu ebele oyo ebotaka mbuma ya kolia. Na bolingo monene na Yo, baliaki mpe batondaki, bakomaki minene mpe basepelaki na mapamboli na Yo nyonso. \pm \v 26 Kasi batosaki Yo te mpe batombokelaki Yo, bapesaki Mibeko na Yo mokongo, babomaki basakoli na Yo, oyo bazalaki koteya bango ete bazonga epai na Yo, mpe batiolaki Yo makasi na maloba na bango. \v 27 Boye okabaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo banyokolaki bango. Kasi tango bakomaki na pasi makasi, babelelaki Yo ; mpe Yo, wuta na likolo, oyokaki bango ; bongo na mawa monene na Yo, otindelaki bango bakangoli oyo bakangolaki bango na maboko ya banguna na bango. \v 28 Kasi tango kaka bakomaki na kimia, bazongelaki lisusu kosala mabe na miso na Yo ! Mpe Yo, osundolaki bango na maboko ya banguna na bango, oyo bakomaki kokonza bango. Kasi tango babelelaki Yo lisusu, oyokaki bango wuta na likolo mpe, na mawa monene na Yo, okangolaki bango mbala mingi. \pm \v 29 Okebisaki bango mpo ete bazongela Mibeko na Yo ; kasi, na lolendo na bango, baboyaki kotosa mitindo na Yo. Basalaki masumu, babukaki mibeko na Yo, oyo nzokande esalaka ete moto oyo akotia yango na misala azala na bomoi. Kasi na lolendo mpe na botomboki na bango, bapesaki Yo mokongo, bakomaki mito makasi mpe baboyaki koyoka. \v 30 Ozalaki na motema monene liboso na bango wuta mibu ebele mpe, na nzela ya Molimo na Yo, okebisaki bango na nzela ya basakoli na Yo. Kasi bayokaki kaka te. Boye okabaki bango na maboko ya bikolo ya bapaya. \v 31 Kasi na mawa monene na Yo, osilisaki bango te na koboma mpe osundolaki bango te ; pamba te ozali Nzambe otonda na mawa mpe na ngolu. \pm \v 32 Sik’oyo, Oh Nzambe na biso, Nzambe Monene, Nzambe na nguya mpe ya somo, Yo oyo obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo, komona te lokola likambo ya pamba na miso na Yo pasi oyo ekomeli biso, bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso, basakoli na biso, batata na biso mpe bato na Yo nyonso, wuta na tango ya bakonzi ya Asiri kino na mokolo ya lelo. \pm \v 33 Kati na makambo nyonso oyo ekweyelaki biso, ozalaki sembo ; mpe osalaki na boyengebene, wana biso totambolaki mabe. \v 34 Bakonzi na biso, bakambi na biso, Banganga-Nzambe na biso mpe batata na biso batiaki Mibeko na Yo na mosala te, batosaki te mitindo mpe makebisi na Yo, oyo ozalaki kopesa bango. \v 35 Ezala wana bazalaki kati na mokili na bango, wana bazalaki kosepela mpo na bolamu oyo ozalaki kotalisa bango kati na mokili monene oyo mabele na yango ebotaka malamu, basalelaki Yo te mpe batikaki te banzela mabe na bango. \pm \v 36 Kasi tala, tozali lelo bawumbu ! Tozali penza bawumbu kati na mokili oyo opesaki na bakoko na biso mpo ete balia mbuma na yango mpe biloko mosusu ya kitoko oyo ebimaka kuna ! \v 37 Mpo na masumu na biso, ebele ya mbuma na yango ekeyi na maboko ya bakonzi oyo otiaki na makasi mpo ete banyokola biso. Bazali kokonza banzoto na biso mpe bibwele na biso ndenge balingi. Tokomi na pasi makasi. » \s1 Bato bazwi mokano ya kotosa Mobeko \p \v 38 Mpo na makambo oyo nyonso, tozali kozwa mokano oyo tozali kokoma na mokanda ; mpe bakambi na biso, Balevi na biso mpe Banganga-Nzambe na biso bakotia mikoloto na bango na mokanda yango. \c 10 \p \v 1 Tala bakombo ya bato oyo batiaki mikoloto na bango na mokanda yango : \b \li1 Moyangeli Neyemi, mwana mobali ya Akalia ; \li2 Sedesiasi, \v 2 Seraya, Azaria, Jeremi, \li2 \v 3 Pashuri, Amaria, Malikiya, \li2 \v 4 Atushi, Shebania, Maluki, \li2 \v 5 Arimi, Meremoti, Abidiasi, \li2 \v 6 Daniele, Ginetoni, Baruki, \li2 \v 7 Meshulami, Abiya, Miyamini, \li2 \v 8 Maazia, Biligayi mpe Shemaya. \li1 Ezali bango nde bazalaki Banganga-Nzambe. \b \li1 \v 9 Mpo na Balevi : \li2 Jozue, mwana mobali ya Azania ; Binuwi, moko ya bakitani ya Enadadi ; Kadimieli \v 10 elongo na bandeko na bango : \li2 Shebania, Odia, Kelita, Pelaya, Anani, \li2 \v 11 Mishe, Reobi, Ashabia, \li2 \v 12 Zakuri, Sherebia, Shebania, \li2 \v 13 Odia, Bani mpe Beninu. \b \li1 \v 14 Mpo na bakambi ya bato : \li2 Pareoshi, Paati-Moabi, Elami, Zatu, Bani, \li2 \v 15 Buni, Azigadi, Bebayi, \li2 \v 16 Adoniya, Bigivayi, Adini, \li2 \v 17 Ateri, Ezekiasi, Azuri, \li2 \v 18 Odia, Ashumi, Betsayi, \li2 \v 19 Arifi, Anatoti, Nebayi, \li2 \v 20 Magipiashi, Meshulami, Eziri, \li2 \v 21 Meshezabeyeli, Tsadoki, Yaduwa, \li2 \v 22 Pelatia, Anani, Anaya, \li2 \v 23 Oze, Anania, Ashubi, \li2 \v 24 Aloeshi, Pila, Shobeki, \li2 \v 25 Rewumi, Ashabina, Maaseya, \li2 \v 26 Ayiya, Anani, Anane, \li2 \v 27 Maluki, Arimi, Baana. \b \pm \v 28 Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele bayaki kosangana na bango : kati na Banganga-Nzambe, kati na Balevi, kati na bakengeli bikuke, kati na bayembi, kati na basali ya Tempelo mpe kati na bato nyonso oyo bakabwanaki na bikolo ya bapaya oyo ezalaki zingazinga na bango mpo na kotosa Mobeko ya Nzambe, elongo na basi na bango, bana na bango nyonso ya mibali mpe ya basi, bato nyonso oyo bazali na makoki ya kososola. \v 29 Bango nyonso basanganaki elongo na bandeko na bango, bakambi kati na bana ya Isalaele. Bandimaki mpe balapaki ndayi ete bakotambola kolanda Mibeko oyo Nzambe apesaki bango na nzela ya Moyize, mosali na Ye, mpe bakotosa mitindo, malako mpe bikateli nyonso ya Yawe, Nzambe na biso ; bongo soki batosi yango te, tika ete Nzambe alakela bango mabe ! \v 30 Balobaki : \pm « Topesi elaka ete tokobalisa lisusu te bana na biso ya basi epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso to bana na biso ya mibali epai ya bana na bango ya basi. \pm \v 31 Tokosomba lisusu te epai ya bapaya oyo bazali elongo na biso, biloko nyonso to mbuma nyonso oyo bakoya kotekela biso na mokolo ya Saba to na mikolo mosusu ya bule. Sima na mibu sambo nyonso, tokopemisa mabele mpe tokotikela bato baniongo na biso nyonso. \v 32 Tozwi lisusu mokano ya kotosa mibeko, ya kopesa bagrame minei ya mbongo ya bibende ya palata mobu na mobu, mpo na misala ya Ndako ya Nzambe na biso, \v 33 mpo na mapa oyo batiaka na mesa liboso ya Yawe, mpo na makabo ya ble ya mokolo na mokolo, mpo na mbeka ya kotumba ya tango nyonso, mpo na makabo ya mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, mpo na makabo ya bule, mpo na bambeka ya bolimbisi masumu ya Isalaele mpe mpo na misala nyonso ya Ndako ya Nzambe na biso. » \pm \v 34 Biso, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato, tobetaki zeke mpo na kokata tango oyo libota na libota kati na biso ekomema likabo ya bakoni na Ndako ya Nzambe na biso, na mibu nyonso mpo na kopelisa moto na etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko. \pm \v 35 Tozwi lisusu mokano ya komema mobu na mobu na Tempelo ya Yawe, bambuma ya liboso ya bilanga na biso mpe ya nzete nyonso oyo ebotaka mbuma, mpo na Tempelo ya Yawe. \v 36 Tokomema lisusu bana ya liboso kati na bana na biso ya mibali, kati na bangombe na biso, kati na bameme mpe kati na bantaba na biso, na Ndako ya Nzambe na biso, epai ya Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala kuna, ndenge ekomama na Mobeko. \v 37 Tokomema lisusu epai ya Banganga-Nzambe, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso, ndambo oyo eleki kitoko ya farine na biso, ya makabo na biso ya ble, ya mbuma ya nzete na biso nyonso, ya vino na biso ya sika mpe ya mafuta na biso. Tokomema mpe eteni ya zomi ya milona na biso epai ya Balevi, pamba te bango nde bazali na mokumba ya kokongola eteni yango ya zomi kati na bingumba nyonso epai wapi tosalelaka mosala. \v 38 Nganga-Nzambe moko, mokitani ya Aron, asengeli kotambola nzela moko na Balevi na tango ya kokongola eteni ya zomi, mpe Balevi bakozala na mokumba ya komema eteni ya zomi ya eteni ya zomi, na bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso. \v 39 Bana ya Isalaele elongo na Balevi basengeli komema makabo na bango ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta, na bibombelo epai wapi babombaka bisalelo ya Esika ya bule, mpe epai wapi Banganga-Nzambe basalaka mosala na bango mpe bakengeli bikuke elongo na bayembi batelemaka. Boye, tokotika Ndako ya Nzambe na biso te. \c 11 \s1 Bato bavandi lisusu na Yelusalemi \p \v 1 Bakambi ya bato bayaki kovanda na Yelusalemi. Ndambo mosusu kati na bato babetaki zeke mpo ete moto moko kati na bato zomi aya kovanda na Yelusalemi, engumba ya bule ; mpe mpo ete bato libwa oyo batikali bavanda kati na bingumba na bango. \v 2 Bato bapambolaki moto nyonso oyo amipesaki ye moko mpo na kovanda na Yelusalemi. \li4 \v 3 Tala bakambi ya bituka oyo bavandaki na Yelusalemi ; nzokande na tango wana, bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, basali ya Tempelo mpe bakitani ya basali ya Salomo bavandaki kati na bingumba ya Yuda, moko na moko kati na mabele mpe engumba na ye ; \v 4 mpe bato ya Yuda mpe ya Benjame bavandaki kati na Yelusalemi : \b \li1 Mpo na bakitani ya Yuda : \li2 Ataya, mwana mobali ya Oziasi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Shefatia, mwana mobali ya Maalalele, mokitani ya Peretsi ; \li2 \v 5 mpe Maaseya, mwana mobali ya Baruki, mwana mobali ya Koli-Oze, mwana mobali ya Azaya, mwana mobali ya Adaya, mwana mobali ya Yoyaribi, mwana mobali ya Zakari, moko kati na bakitani ya Shiloni. \li2 \v 6 Bakitani nyonso ya Peretsi oyo bavandaki kati na Yelusalemi bazalaki mibali nkama minei na tuku motoba na mwambe. \li1 \v 7 Mpo na bakitani ya Benjame : \li2 Salu, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Yoedi, mwana mobali ya Pedaya, mwana mobali ya Kolaya, mwana mobali ya Maaseya, mwana mobali ya Itieli, mwana mobali ya Ezayi ; \li2 \v 8 mpe Gabayi elongo na Salayi. Bango nyonso bazalaki bato nkama libwa na tuku mibale na mwambe. \li2 \v 9 Joeli, mwana mobali ya Zikiri, azalaki mokambi na bango ; mpe Yuda, mwana mobali ya Asenuwa, azalaki molandi ya mokambi ya engumba. \li1 \v 10 Kati na Banganga-Nzambe : \li2 Yedaeya, mwana mobali ya Yoyaribi, mwana mobali ya Yakini ; \li2 \v 11 Seraya, mwana mobali ya Ilikia, mwana mobali ya Meshulami, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Merayoti, mwana mobali ya Ayitubi, mokambi ya Ndako ya Nzambe \v 12 elongo na bandeko na bango, nkama mwambe na tuku mibale na mibale oyo bazalaki kosala na Ndako ya Nzambe ; \li2 Adaya, mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Pelalia, mwana mobali ya Amitsi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Pashuri, mwana mobali ya Malikiya \v 13 elongo na bandeko na bango, nkama mibale na tuku minei na mibale oyo bazalaki bakambi ya mabota ; \li2 Amashisayi, mwana mobali ya Azareyeli, mwana mobali ya Azayi, mwana mobali ya Meshilemoti, mwana mobali ya Imeri, azalaki mpe elongo na bango. \v 14 Azalaki mpe elongo na bandeko na ye, nkama moko na tuku mibale na mwambe oyo bazalaki basoda ya mpiko. Zabidieli, mwana mobali ya Gedolimi, nde azalaki mokambi na bango. \li1 \v 15 Kati na Balevi : \li2 Shemaya, mwana mobali ya Ashubi, mwana mobali ya Azirikami, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Buni ; \li2 \v 16 Shabetayi mpe Yozabadi oyo bazalaki na molongo ya bakambi ya Balevi mpe bazalaki na mokumba ya misala ya libanda ya Ndako ya Nzambe ; \li2 \v 17 Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Azafi, mokambi oyo azalaki kotinda banzembo ya matondi na tango ya losambo ; \li2 Bakibukia, molandi kati na bandeko na ye mpe Abida, mwana mobali ya Shamuwa, mwana mobali ya Galali mpe mwana mobali ya Yedutuni. \li2 \v 18 Balevi nyonso oyo bazalaki kovanda kati na engumba ya bule bazalaki nkama mibale tuku mwambe na minei. \li1 \v 19 Bakengeli bikuke : \li2 Akubi, Talimoni elongo na bandeko na bango, oyo bazalaki bakengeli bikuke. Bango nyonso bazalaki bato nkama moko na tuku sambo na mibale. \b \p \v 20 Ndambo mosusu ya bana ya Isalaele elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi bazalaki kovanda kati na bingumba nyonso ya Yuda, moto na moto, na mabele oyo bakoko na ye batikelaki ye. \p \v 21 Basali ya Tempelo bazalaki kovanda na ngomba Ofeli, mpe Tsika elongo na Gishipa bazalaki bakambi na bango. \p \v 22 Uzi, mwana mobali ya Bani, mwana mobali ya Ashabia, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Azafi, azalaki mokambi ya Balevi kati na Yelusalemi. Uzi azalaki moko kati na bakitani ya Azafi, oyo bazalaki na mokumba ya kokamba misala ya mindule kati na Ndako ya Nzambe. \v 23 Misala ya bayembi ezalaki kotambolisama mokolo na mokolo na mitindo ya mokonzi. \p \v 24 Petaya, mwana mobali ya Meshezabeyeli, moko kati na bakitani ya Zera, mwana mobali ya Yuda, azalaki kalaka ya mokonzi mpo na kotala makambo nyonso ya bato. \s1 Bayuda oyo bazalaki libanda ya Yelusalemi \p \v 25 Bato mosusu ya ekolo ya Yuda bavandaki kati na Kiriati-Ariba mpe na bamboka na yango ya mike-mike, kati na Diboni mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Yekabisheli mpe bamboka na yango ya mike-mike, \v 26 kati na Yeshua, kati na Molada, kati na Beti-Paleti, \v 27 kati na Atsari-Shuwali, kati na Beri-Sheba mpe bamboka na yango ya mike-mike, \v 28 kati na Tsikilagi, kati na Mekona mpe bamboka na yango ya mike-mike, \v 29 kati na Eini-Rimoni, kati na Tsorea, kati na Yarimuti, \v 30 kati na Zanoa, Adulami mpe bamboka na yango ya mike-mike, kati na Lakishi mpe bilanga na yango ya zingazinga, mpe kati na Azeka mpe bamboka na yango ya mike-mike. Boye bavandaki na etuka mobimba longwa na Beri-Sheba kino na Lubwaku ya Inomi. \p \v 31 Bakitani ya Benjame balongwaki na Geba mpe bakendeki kovanda kati na Mikimasi, Aya, Beteli mpe bamboka na yango ya mike-mike, \v 32 kati na Anatoti, Nobi mpe Anania, \v 33 kati na Atsori, Rama mpe Gitayimi, \v 34 kati na Adidi, Tseboyimi mpe Nebalati, \v 35 kati na Lodi mpe Ono, lubwaku ya bato oyo basalaka misala ya maboko. \p \v 36 Masanga mosusu ya Balevi ya Yuda ekendeki kovanda kati na bato ya Benjame. \c 12 \s1 Banganga-Nzambe mpe Balevi \li4 \v 1 Tala Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bawutaki na bowumbu elongo na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue : \b \li1 Seraya, Jeremi, Esidrasi, \li1 \v 2 Amaria, Maluki, Atushi, \li1 \v 3 Shekania, Rewumi, Meremoti, \li1 \v 4 Ido, Ginetoyi, Abiya, \li1 \v 5 Miyamini, Maadia, Biliga, \li1 \v 6 Shemaya, Yoyaribi, Yedaeya, \li1 \v 7 Salu, Amoki, Ilikia, Yedaeya. \b \li4 Bango nde bazalaki bakambi ya Banganga-Nzambe elongo na baninga na bango na tango ya Jozue. \b \p \v 8 Kati na Balevi, ezalaki na Jozue, Binuwi, Kadimieli, Sherebia, Yuda mpe Matania oyo, elongo na baninga na ye ya mosala, azalaki mokambi ya banzembo ya matondi. \v 9 Bakibukia mpe Uni, baninga na bango ya mosala, bazalaki kosala mosala na bango na ngambo mosusu. \b \li1 \v 10 Jozue abotaki Yoakimi, \li1 Yoakimi abotaki Eliashibi, \li1 Eliashibi abotaki Yoyada, \li1 \v 11 Yoyada abotaki Jonatan, \li1 Jonatan abotaki Yaduwa. \b \li4 \v 12 Tala bato oyo bazalaki bakambi ya mabota ya Banganga-Nzambe tango Yoakimi azalaki mokonzi : \b \li1 mpo na libota ya Seraya : Meraya ; \li1 mpo na libota ya Jeremi : Anania ; \li1 \v 13 mpo na libota ya Esidrasi : Meshulami ; \li1 mpo na libota ya Amaria : Yoanani ; \li1 \v 14 mpo na libota ya Meluki : Jonatan ; \li1 mpo na libota ya Shebania : Jozefi ; \li1 \v 15 mpo na libota ya Arimi : Adina ; \li1 mpo na libota ya Merayoti : Elikayi ; \li1 \v 16 mpo na libota ya Ido : Zakari ; \li1 mpo na libota ya Ginetoni : Meshulami ; \li1 \v 17 mpo na libota ya Abiya : Zikiri ; \li1 mpo na libota ya Minyamini : Moadia, Pilitayi ; \li1 \v 18 mpo na libota ya Biliga : Shamuwa ; \li1 mpo na libota ya Shemaya : Jonatan ; \li1 \v 19 mpo na libota ya Yoyaribi : Matinayi ; \li1 mpo na libota ya Yedaeya : Uzi ; \li1 \v 20 mpo na libota ya Salu : Kalayi ; \li1 mpo na libota ya Amoki : Eberi ; \li1 \v 21 mpo na libota ya Ilikia : Ashabia ; \li1 mpo na libota ya Yedaeya : Netaneeli. \b \p \v 22 Na tango ya Eliashibi, Yoyada, Yoanani mpe Yaduwa, bakomaki bakombo ya Balevi oyo bazalaki bakambi ya mabota mpe bakombo ya Banganga-Nzambe na tango ya Dariusi, mokonzi ya Persi. \v 23 Bakomaki bakombo ya bakitani ya Levi oyo bazalaki bakambi ya mabota kino na tango ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi, kati na buku ya bokoko. \v 24 Tala bato oyo bazalaki bakambi ya Balevi : Ashabia, Sherebia mpe Jozue, mwana mobali ya Kadimieli, mpe baninga na bango ya mosala. Batelemaki boye : bamoko bazalaki kotalana na bamosusu, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe kolanda mitindo ya Davidi, moto na Nzambe. Soki bamoko batindi mongongo, bamosusu bazalaki kozongisa. \p \v 25 Matania, Bakibukia, Abidiasi, Meshulami, Talimoni mpe Akubi, bazalaki bakengeli ya bibombelo oyo ezalaki pene ya bikuke ya Ndako ya Nzambe. \v 26 Bazalaki kosala mosala na bango na tango ya Yoakimi, mwana mobali ya Jozue mpe koko ya Yotsadaki, mpe na tango ya moyangeli Neyemi mpe Esidrasi, molakisi ya Mobeko mpe Nganga-Nzambe. \s1 Libulisi ya mir ya Yelusalemi \p \v 27 Tango babulisaki mir ya Yelusalemi, babengisaki Balevi na Yelusalemi longwa na bisika oyo bazalaki kovanda, mpo na kosepela na esengo makasi feti ya libulisi na nzela ya banzembo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe na nzela ya mindule ya manzanza, ya lindanda mpe ya lire. \v 28 Babengisaki lisusu bayembi longwa na etuka oyo ezalaki zingazinga ya Yelusalemi, longwa na bamboka mike-mike ya bato ya Netofa, \v 29 longwa na Beti-Giligali mpe longwa na etuka ya Geba mpe ya Azimaveti, pamba te bayembi batongaki bamboka na bango ya mike-mike zingazinga ya Yelusalemi. \v 30 Tango Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki, bapetolaki mpe bato, bikuke mpe mir. \p \v 31 Namatisaki bakambi ya Yuda likolo ya mir mpe nasalaki masanga mibale ya bayembi mpo na kotonda Nzambe. Lisanga ya liboso ezalaki kotambola na likolo ya mir na ngambo ya loboko ya mobali, na nzela ya Ekuke ya Fulu. \v 32 Na sima na bango, bato oyo bazalaki kolanda : Oze mpe ndambo ya bakambi ya Yuda, \v 33 Azaria, Esidrasi, Meshulami, \v 34 Yuda, Benjame, Shemaya, Jeremi, \v 35 ndambo ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki na bakelelo na bango, Zakari, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Shemaya, mwana mobali ya Matania, mwana mobali ya Mishe, mwana mobali ya Zakuri, mwana mobali ya Azafi ; \v 36 mpe baninga na ye ya mosala : Shemaya, Azareyeli, Milalayi, Gilalayi, Mayi, Netaneeli, Yuda mpe Anani, oyo bazalaki kobeta bibetelo mindule oyo Davidi, moto na Nzambe, atindaki. Esidrasi, molakisi ya Mobeko, azalaki liboso na bango. \v 37 Na Ekuke ya Etima, liboso na bango, bamataki bibutelo oyo ezalaki komema na engumba ya Davidi, na esika oyo bamatelaka na mir, mpe balekaki likolo ya ndako ya Davidi kino na Ekuke ya Mayi, na ngambo ya este. \p \v 38 Lisanga ya mibale ya bayembi ezalaki kotambola na nzela ya ngambo ya loboko ya mwasi. Nazalaki kolanda bango na likolo ya mir elongo na ndambo ya bato, longwa na ndako molayi ya Fulu kino na mir ya monene, \v 39 na likolo ya Ekuke ya Efrayimi, ya Ekuke ya Yelusalemi, ya Ekuke ya Mbisi, ya ndako molayi, ya Ananeyeli mpe ya ndako molayi ya Meya kino na Ekuke ya Bameme. Basukelaki na Ekuke ya Boloko. \p \v 40 Masanga nyonso mibale ya bayembi, oyo ezalaki kotonda Nzambe ezwaki esika kati na Tempelo ya Nzambe. Nasalaki mpe lolenge moko mpo na kati-kati ya bakambi ya bato \v 41 mpe mpo na Banganga-Nzambe oyo : Eliakimi, Maaseya, Minyamini, Mishe, Eliowenayi, Zakari mpe Anania oyo bamemaki bakelelo na bango. \v 42 Ezalaki mpe na Maaseya, Shemaya, Eleazari, Uzi, Yoanani, Malikiya, Elami mpe Ezeri. Masanga ya bayembi ezalaki koyemba na mongongo makasi na bokambami ya Yiziraya. \v 43 Na mokolo wana, bato babonzaki bambeka ebele mpe bazalaki na esengo mpo ete Nzambe apesaki bango esengo monene. Bongo ezala basi mpe bana, batondaki na esengo mpe koganga ya esengo ya Yelusalemi ezalaki koyokana kino na mosika. \s1 Mabongisi mpo na makabo mpe eteni ya zomi \p \v 44 Na tango wana, baponaki mibali mpe bapesaki bango mokumba ya kobatela bibombelo ya makabo, ya bambuma ya liboso mpe ya biteni ya zomi ; bapesaki bango mpe mokumba ya kokongola biloko oyo Mobeko ekataki ete ezali mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi, biloko yango esengeli kowuta na bilanga oyo ezingeli bingumba. Solo, bato ya Yuda bazalaki kosepela makasi komona ete Banganga-Nzambe mpe Balevi bazongeli penza mosala na bango, \v 45 bazali kosala mosala ya Nzambe na bango mpe mosala ya kopetola, mpe bayembi elongo na bakengeli bikuke bazali kosala mosala na bango kolanda mitindo ya Davidi mpe ya Salomo, mwana na ye ya mobali. \v 46 Na tango ya Davidi mpe ya Azafi, ezalaki na bakambi ya babeti mindule mpe ya banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisa matondi epai ya Nzambe. \v 47 Na tango ya Zorobabeli mpe ya Neyemi, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kopesa, mikolo nyonso, biloko oyo ekatama mpo na babeti mindule mpe bakengeli bikuke ; bazalaki mpe kopesa biloko ya bule epai ya Balevi, bongo Balevi mpe, na ngambo na bango, bazalaki kopesa biloko ya bule epai ya bakitani ya Aron. \c 13 \s1 Mabongisi ya suka ya Neyemi \p \v 1 Na tango wana, batangaki buku ya Moyize na mongongo makasi mpo ete bato bayoka ; mpe bamonaki ete ekomama boye kati na yango : « Moto ya Amoni mpe moto ya Moabi bakotikala kondimama te kati na lisanga ya Nzambe ; \v 2 mpo ete bayaki te kokutana na bana ya Isalaele mpe kopesa bango bilei mpe mayi, kasi bapesaki nde Balami kanyaka mpo ete alakela bango mabe ; atako bongo, Nzambe na biso abongolaki elakeli mabe lipamboli. » \v 3 Tango kaka bato bayokaki mobeko yango, balongolaki na Isalaele bakitani nyonso ya bapaya. \p \v 4 Liboso ya kozwa mokano yango, Nganga-Nzambe Eliashibi oyo azali na mokumba ya kobatela bibombelo ya Ndako ya Nzambe na biso mpe azali moto ya libota ya Tobiya \v 5 apesaki Tobiya, ndeko na ye, shambre monene oyo, na kala, ezalaki ebombelo ya makabo ya ble, ansa, bisalelo ya Tempelo, eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta, biloko oyo Mibeko ekata ete ezali mpo na Balevi, bayembi mpe bakengeli bikuke ; mpe makabo oyo epesamaka mpo na Banganga-Nzambe. \p \v 6 Kasi wana makambo oyo nyonso ezalaki kosalema, ngai nazalaki na Yelusalemi te, pamba te nazongaki epai ya Aritakizerisesi, mokonzi ya Babiloni, na mobu ya tuku misato na mibale ya bokonzi na ye. Bongo sima na mwa mikolo, na suka ya mobu, nasengaki ye nzela \v 7 mpe nazongaki na Yelusalemi. Kuna, namonaki mpe nasosolaki mabe oyo Eliashibi asalaki na ndenge apesaki Tobiya shambre kati na lopango ya Ndako ya Nzambe ; \v 8 nasilikaki makasi mpe nabwakaki biloko nyonso ya Tobiya na libanda ya shambre. \v 9 Napesaki mitindo ete bapetola bashambre mpe, na sima, nazongisaki kati na yango bisalelo ya Ndako ya Nzambe, makabo ya ble mpe ansa. \s1 Eteni ya zomi \p \v 10 Nayokaki lisusu ete biloko oyo Mibeko ekata mpo na Balevi epesamaka te epai ya Balevi, mpe ete Balevi mpe bayembi oyo bazalaki kosala mosala bazongaki, moto na moto na bilanga na ye. \v 11 Mpo na yango, napamelaki bakambi ya bato mpe natunaki bango : \pi1 — Mpo na nini Ndako ya Nzambe esundolami ? \p Bongo, nasangisaki Balevi mpe bayembi mpe nazongisaki bango, moto na moto na mosala na ye. \v 12 Bato nyonso ya Yuda bamemaki kati na bibombelo : eteni ya zomi ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta. \v 13 Napesaki mokumba ya kobatela bibombelo epai ya Nganga-Nzambe Shelemiya, epai ya Tsadoki, molakisi ya Mobeko, mpe epai ya Pedaya, moko kati na Balevi ; mpe napesaki bango Anani, mwana mobali ya Zakuri, koko ya Matania, mpo ete asunga bango, pamba te bango nyonso bazalaki bato ya sembo. Bapesamelaki mokumba ya kokabola biloko epai ya baninga na bango, Balevi. \b \p \v 14 Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai mpo na makambo oyo nyonso ; kobosana te misala nyonso oyo nasali na boyengebene mpo na Ndako ya Nzambe na ngai mpe mpo na misala na yango ! \s1 Mokolo ya bopemi \p \v 15 Na tango wana kaka, namonaki kati na etuka ya Yuda bato bazali kokamola bambuma ya vino na mokolo ya Saba, bamosusu bazali kobongisa maboke ya matiti ya ble, kotia yango likolo ya ba-ane elongo na masanga ya vino, bambuma ya vino, ya figi mpe mikumba ya ndenge na ndenge mpo na komema yango na Yelusalemi na mokolo ya Saba. Mpo na yango, napamelaki bango ete bateka lisusu biloko te na mokolo wana. \v 16 Ezalaki mpe na bato ya Tiri, oyo bazalaki kovanda kati na Yelusalemi ; bango bazalaki komema mbisi mpe biloko ya ndenge na ndenge, mpe bazalaki kotekela yango bato ya Yuda mpe kati na Yelusalemi na mokolo ya Saba. \v 17 Napamelaki bankumu ya Yuda mpe nalobaki na bango : \pi1 — Ndenge nini bozali kosala likambo mabe makasi boye na kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba ? \v 18 Tala, bakoko na bino basalaki mpe kaka boye ; mpe ezali mpo na yango nde Nzambe na biso atindelaki biso mpe engumba oyo pasi oyo nyonso. Mpe bino, lokola bozali kobebisa bosantu ya mokolo ya Saba, bozali nde komatisa kanda ya Nzambe likolo ya Isalaele ! \p \v 19 Tango molili ya pokwa ekweyaki na bikuke ya Yelusalemi, liboso ete mokolo ya Saba ebanda, napesaki mitindo ete bakanga bikuke yango mpe bafungola yango kaka soki mokolo ya Saba eleki. Bongo, natiaki ndambo ya basali na ngai na bikuke mpo na kopekisa bokoti ya mikumba, na mokolo ya Saba. \v 20 Boye, mbala moko to mibale, basombi mpe bateki biloko ya ndenge na ndenge balekisaki butu libanda ya Yelusalemi. \v 21 Nakebisaki bango makasi mpe nalobaki : \pi1 — Mpo na nini bozali kolekisa butu pembeni ya mir ? Soki bozongeli lisusu kosala bongo, nakokanga bino. \p Wuta na tango wana, batikalaki lisusu koya te na mokolo ya Saba. \p \v 22 Napesaki lisusu Balevi mitindo ete bamipetola mpe bakende kokengela bikuke mpo na kobatela bule ya mokolo ya Saba. \b \p Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai lisusu mpo na likambo oyo mpe talisa ngai ngolu na Yo kolanda bolingo monene na Yo ! \s1 Mabala elongo na bapaya \p \v 23 Kaka na mikolo wana, namonaki lisusu bana mibali ya Yuda kobala bana basi ya Asidodi, ya Amoni mpe ya Moabi. \v 24 Kati-kati mobimba ya bana na bango bazalaki koloba lokota ya bato ya Asidodi to lokota ya ekolo moko kati na bikolo mosusu, kasi bayebaki te koloba lokota ya Bayuda. \v 25 Napamelaki bango mpe nalakelaki bango mabe ; nabetaki ndambo kati na bango, napikolaki bango suki mpe nalapisaki bango ndayi oyo na Kombo ya Nzambe : \pi1 — Bosengeli te kopesa na libala bana na bino ya basi epai ya bana mibali ya bapaya mpe bosengeli te kozwa na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali to mpo na bino moko. \v 26 Ezalaki penza na nzela ya mabala ya boye nde Salomo, mokonzi ya Isalaele, akweyaki na masumu. Nzokande, kati na ebele ya bikolo ya bapaya, ezalaki na mokonzi moko te oyo akokanaki na ye ! Nzambe na ye azalaki kolinga ye mpe atiaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba, kasi basi ya bapaya bakweyisaki ye na masumu. \v 27 Boni, tosengeli sik’oyo koyoka ete bino mpe bozali kosala mabe wana monene mpe bozangi boyengebene liboso ya Nzambe na biso likolo ya kobala basi ya bapaya ? \p \v 28 Moko kati na bana mibali ya Yoyada, mwana mobali ya Eliashibi, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akomaki bokilo ya Sanibala, moto ya Oroni. Mpe nabenganaki ye mosika na ngai. \b \p \v 29 Oh Nzambe na ngai, kobosana bato wana te, mpo ete babebisaki bosantu ya bonganga-Nzambe mpe boyokani na Yo elongo na Banganga-Nzambe mpe Balevi. \b \p \v 30 Napetolaki Banganga-Nzambe mpe Balevi mpo na kolongola mbindo nyonso ya bapaya mpe nazongisaki bango na mosala, moto na moto na mokumba na ye. \v 31 Nazongisaki lisusu makabo ya bakoni mpo ete epesama na tango na yango oyo ekatama mpe makabo ya bambuma ya liboso ya mabele. \b \p Oh Nzambe na ngai, kanisa ngai na bolamu na Yo !