\id MRK Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Malako \toc1 Sango Malamu kolanda Malako \toc2 Malako \toc3 Mlk \mt2 Sango Malamu kolanda \mt1 Malako \c 1 \ms1 Mabongisi ya lotomo ya Yesu \s1 Mateya ya Yoane Mobatisi \r (Mat 3.1-12; Lk 3.1-6, 15-18; Yn 1.19-28) \p \v 1 Tala ebandeli ya Sango Malamu ya Yesu-Klisto, Mwana na Nzambe, \v 2 kolanda ndenge ekomama kati na mokanda ya mosakoli Ezayi : \q1 « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo, \q2 ye nde akobongisela Yo nzela. \q1 \v 3 Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : \q2 ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, \q2 bosembolela Ye banzela ya mike ! › » \m \v 4 Boye Yoane azalaki kati na esobe mpe azalaki kosakola : « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino ! » \p \v 5 Bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazalaki kokende epai na ye ; bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani. \v 6 Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama, na loketo ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi. \v 7 Tala makambo oyo azalaki koteya bato : « Sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kogumbama liboso na Ye mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye. \v 8 Ngai nazali kobatisa bino na mayi, kasi Ye akobatisa bino kati na Molimo Mosantu. » \s1 Libatisi mpe komekama ya Yesu \r (Mat 3.13-17; Lk 3.21-22) \p \v 9 Na tango wana, Yesu ayaki wuta na Nazareti ya Galile, mpe Yoane abatisaki Ye na ebale Yordani. \v 10 Tango kaka abimaki na mayi, amonaki Likolo kofungwama mpe Molimo kokitela Ye lokola ebenga. \v 11 Mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi ! » \r (Mat 4.1-11; Lk 4.1-13) \p \v 12 Mbala moko, Molimo amemaki Yesu kati na esobe \v 13 epai wapi avandaki mikolo tuku minei mpe Satana azalaki komeka Ye. Azalaki kuna elongo na banyama ya zamba, mpe ba-anjelu bazalaki kopesa Ye bilei. \ms1 Lotomo ya Yesu kati na Galile \s1 Yesu abandi koteya \r (Mat 4.12-17; Lk 4.14-15) \p \v 14 Tango babwakaki Yoane kati na boloko, Yesu akendeki na Galile epai wapi azalaki koteya Sango Malamu ya Nzambe. \v 15 Azalaki koloba : \wj « Tango ekoki, mpe Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. Bobongola mitema mpe bondima Sango Malamu. »\wj* \s1 Bayekoli ya liboso ya Yesu \r (Mat 4.18-22; Lk 5.1-3, 10-11) \p \v 16 Mokolo moko, wana Yesu azalaki koleka pembeni ya ebale ya Galile, amonaki Simona mpe Andre, ndeko na ye. Bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi. \v 17 Yesu alobaki na bango : \wj « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »\wj* \p \v 18 Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu. \v 19 Wana Yesu akobaki kotambola, amonaki na mosika Jake, mwana mobali ya Zebede, oyo azalaki elongo na Yoane, ndeko na ye ; bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango. \v 20 Mbala moko, Yesu abengaki bango. Batikaki Zebede, tata na bango, kati na bwato elongo na basali na ye mpe balandaki Yesu. \s1 Yesu abengani molimo mabe \r (Lk 4.31-37) \p \v 21 Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na Kapernawumi. Na mokolo ya Saba, Yesu akotaki na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. \v 22 Bato bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te ateyaki na bokonzi oyo balakisi ya Mobeko bazangaki. \p \v 23 Kaka na tango yango, ezalaki na moto moko, kati na ndako ya mayangani, oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki koganga : \pi1 \v 24 — Yesu ya Nazareti, olingi nini ? Oyei nde koboma biso ? Nayebi Yo malamu, ozali Motindami mpe Mosantu ya Nzambe ! \p \v 25 Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo : \pi1 \wj — Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo.\wj* \p \v 26 Molimo mabe eningisaki moto yango makasi mpe ebimaki na koganga. \v 27 Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kotunana : \pi1 — Oyo ezali lisusu likambo nini ? Tala mateya ya sika oyo etondi na nguya ! Azali kopesa mitindo ata na milimo mabe, mpe ezali kotosa Ye ! \p \v 28 Mbala moko, sango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka mobimba ya Galile. \s1 Yesu abikisi babeli ebele \r (Mat 8.14-15; Lk 4.38-39) \p \v 29 Tango Yesu abimaki na ndako ya mayangani, akendeki elongo na Jake mpe Yoane na ndako ya Simona mpe Andre. \v 30 Nzokande, mama-bokilo ya Simona azalaki ya kolala mpo ete azalaki kobela fievele ; mbala moko, bapesaki Ye sango. \v 31 Boye apusanaki pene ya mama yango, asimbaki ye na loboko mpe atelemisaki ye ; fievele esilaki, mpe mama yango akomaki kobongisela bango bilei. \r (Mat 4.24; 8.16-17; Lk 4.40-41) \p \v 32 Wana moyi elalaki mpe pokwa eyaki, bamemelaki Yesu babeli nyonso mpe bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. \v 33 Bato nyonso ya engumba bayaki kosangana liboso ya ekuke ya ndako ; \v 34 bongo Yesu abikisaki bato ebele oyo bazalaki na pasi ya ndenge na ndenge, abenganaki milimo mabe ebele mpe apekisaki yango koloba ; pamba te milimo mabe eyebi nani oyo Ye azali. \r (Lk 4.42-44) \p \v 35 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana molili ezalaki nanu, Yesu alamukaki, abimaki libanda, akendeki na esobe epai wapi azalaki kaka Ye moko mpe akomaki kosambela. \v 36 Simona elongo na baninga na ye bakendeki koluka Yesu. \v 37 Tango bamonaki Ye, balobaki na Ye : \pi1 — Bato nyonso bazali koluka Yo. \p \v 38 Kasi Ye azongiselaki bango : \pi1 \wj — Tokende na esika mosusu, na bamboka ya zingazinga, mpo ete nateya mpe kuna, pamba te nayaki mpo na yango.\wj* \p \v 39 Boye, atambolaki na Galile mobimba ; azalaki koteya na bandako na bango ya mayangani mpe kobengana milimo mabe. \v 40 Moto moko na maba apusanaki pene na Yesu, afukamaki mpe asengaki na Yesu : \pi1 — Soki olingi, komisa ngai peto. \p \v 41 Yesu ayokelaki ye mawa, atandaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki : \pi1 \wj — Nalingi ete ezala bongo, koma peto.\wj* \p \v 42 Mbala moko, maba elongwaki na nzoto ya mobeli mpe akomaki peto. \v 43 Mbala moko, Yesu azongisaki ye mpe akebisaki ye : \pi1 \v 44 \wj — Yoka Ngai malamu, koyebisa likambo oyo na moto moko te ; kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa, mpo na kopetolama na yo, likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.\wj* \p \v 45 Kasi tango kaka abimaki, abandaki koloba mpe kopanza sango. Mpo na yango, Yesu azalaki lisusu te kokoka kokota kati na bingumba na miso ya bato nyonso ; kasi akomaki kovanda na libanda ya bingumba, na bisika oyo ebombama. Nzokande, bato bazalaki kaka kowuta bipai na bipai mpo na koya epai na Ye. \c 2 \s1 Yesu alimbisi mpe abikisi ebosono \r (Mat 9.1-8; Lk 5.17-26) \p \v 1 Sima na mwa mikolo, Yesu azongaki lisusu na Kapernawumi. Tango bato bayokaki ete azali na ndako, \v 2 bayaki ebele kosangana kati na ndako yango kino esika ezalaki lisusu te, ezala na liboso ya ekuke, mpe Yesu ateyaki bango Sango Malamu. \v 3 Bato mosusu bamemelaki Ye ebosono oyo bato minei batomboli. \v 4 Lokola balongaki te kokomisa ebosono yango kino na esika oyo Yesu azalaki, pamba te bato bazalaki ebele penza, bamataki likolo ya mwanza ya ndako kino na esika oyo Yesu azalaki mpe batobolaki lidusu. Bongo na nzela ya lidusu yango, bakitisaki na tsipoyi ebosono yango. \v 5 Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono : \pi1 \wj — Mwana na Ngai, masumu na yo elimbisami.\wj* \p \v 6 Kasi ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bazalaki wana bakomaki kolobaloba na se ya mitema : \v 7 « Mpo na nini moto oyo azali koloba bongo ? Azali kotiola Nzambe ! Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ? » \p \v 8 Mbala moko, kati na molimo na Ye, Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki na bango : \pi1 \wj — Mpo na nini mitema na bino ezali kokanisa bongo ?\wj* \v 9 \wj Likambo nini eleki pete mpo na koloba na ebosono : « Masumu na yo elimbisami to telema, kamata tsipoyi na yo mpe tambola ? »\wj* \v 10 \wj Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.\wj* \p Bongo alobaki na ebosono : \pi1 \v 11 \wj — Nalobi na yo : Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.\wj* \p \v 12 Mbala moko, atelemaki, akamataki tsipoyi na ye mpe abimaki na miso ya bato nyonso. Bato nyonso bakamwaki makasi mpe bakomaki kokumisa Nzambe na maloba oyo : « Totikala nanu komona likambo ya boye te ! » \s1 Tembe na tina na Yesu \r (Mat 9.9-13; Lk 5.27-32) \p \v 13 Yesu abimaki lisusu mpe akendeki pembeni ya ebale. Bato ebele bayaki epai na Ye mpe ateyaki bango. \v 14 Wana azalaki kotambola, amonaki Levi, mwana mobali ya Alife, avandi na ndako ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : \wj « Landa Ngai. »\wj* \p Levi atelemaki mpe alandaki Ye. \p \v 15 Wana Yesu azalaki kolia na ndako ya Levi, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bazalaki kolia mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye ; pamba te bato ebele penza bazalaki kolanda Ye. \v 16 Tango balakisi ya Mobeko ya lingomba ya Bafarizeo bamonaki Yesu kolia mesa moko na bato ya masumu mpe bafutisi mpako, batunaki bayekoli na Ye : \pi1 — Mpo na nini azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ? \p \v 17 Tango Yesu ayokaki bongo, alobaki na bango : \pi1 \wj — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye. Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.\wj* \r (Mat 9.14-17; Lk 5.33-39) \p \v 18 Nzokande bayekoli ya Yoane mpe Bafarizeo bazalaki kokila bilei. Bongo bato bayaki kotuna Yesu : \pi1 — Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe Bafarizeo bakilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te ? \p \v 19 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Ndenge nini bato oyo babengami na feti ya libala bakoki kokila bilei, wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango ? Tango nyonso mobali ya libala azali elongo na bango, bakoki kokila bilei te.\wj* \v 20 \wj Kasi tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.\wj* \pi1 \v 21 \wj Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala mpe ekosala lidusu ya monene koleka.\wj* \v 22 \wj Moto moko te atiaka vino ya sika kati na bambeki ya kala, noki te vino ya sika ekopasola bambeki ; vino ekosopana mpe bambeki ekopasuka. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika !\wj* \s1 Yesu azali Nkolo ya mokolo ya Saba \r (Mat 12.1-8; Lk 6.1-5) \p \v 23 Ezalaki mokolo moko, Yesu azalaki kotambola kati na elanga ya ble ; ezalaki mokolo ya Saba. Wana bazalaki kotambola, bayekoli na Ye bazalaki kobuka ble. \v 24 Bafarizeo balobaki na Yesu : \pi1 — Mpo na nini bayekoli na Yo bazali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba ? \p \v 25 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala mpe bazangaki bilei ?\wj* \v 26 \wj Akotaki kati na Ndako ya Nzambe wana Abiatari azalaki mokonzi ya Banganga-Nzambe, aliaki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe mpe apesaki yango epai ya bato na ye ; nzokande, kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.\wj* \p \v 27 Bongo alobaki na bango lisusu : \pi1 \wj — Mokolo ya Saba esalema mpo na moto, kasi moto asalema te mpo na mokolo ya Saba.\wj* \v 28 \wj Yango wana, Mwana na Moto azali mpe Mokonzi ya mokolo ya Saba.\wj* \c 3 \s1 Yesu abikisi na mokolo ya Saba \r (Mat 12.9-14; Lk 6.6-11) \p \v 1 Yesu akotaki lisusu na ndako ya mayangani epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. \v 2 Boye bato bazalaki kotala soki Yesu akobikisa ye na mokolo ya Saba mpo na kofunda Ye. \v 3 Bongo Yesu alobaki na moto oyo akufa loboko : \pi1 \wj — Telema na liboso ya bato nyonso.\wj* \p \v 4 Atunaki bango : \pi1 \wj — Nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ?\wj* \p Kasi babatelaki kimia. \p \v 5 Yesu atalaki bango na mawa mpe ayokaki pasi mingi na motema mpo ete mitema na bango ezalaki makasi lokola libanga. Yesu alobaki na moto yango : \pi1 \wj — Sembola loboko na yo !\wj* \p Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebikaki. \v 6 Mbala moko, Bafarizeo babimaki mpe bakendeki koyokana na bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu. \s1 Yesu kati na ebele ya bato \p \v 7 Tango Yesu alongwaki kuna, akendeki na ebale elongo na bayekoli na Ye, mpe bato ebele penza balandaki Ye wuta na Galile, na Yuda, \v 8 na Yelusalemi, na Idume mpe na ngambo ya Yordani. Boye tango bato oyo bazalaki na bamboka ya zingazinga ya Tiri mpe ya Sidoni bayokaki sango ya makambo nyonso oyo Yesu azalaki kosala, bango mpe bayaki ebele penza epai na Ye. \v 9 Boye Yesu atindaki bayekoli ete babongisela Ye bwato moko mpo ete bato bafinafina Ye te. \v 10 Lokola azalaki kobikisa bato ebele, bato oyo bazalaki na pasi bakomaki kowelela koya epai na Ye mpo na koluka kosimba Ye. \p \v 11 Tango bato oyo bazalaki na milimo mabe bazalaki komona Ye, bazalaki kogumbama liboso na Ye mpe koganga : \pi1 — Yo ozali solo Mwana na Nzambe ! \p \v 12 Kasi Yesu azalaki kopamela milimo yango ete emeka te koloba na tina na Ye. \s1 Yesu aponi bantoma zomi na mibale \r (Mat 10.1-4; Lk 6.12-16) \p \v 13 Yesu amataki likolo ya ngomba, abengaki bato oyo azalaki na bosenga na bango, mpe bakendeki epai na Ye. \v 14 Kati na bango, aponaki bato zomi na mibale oyo akomaki kobenga « bantoma, » mpo ete bazala elongo na Ye mpe mpo ete bakende koteya Sango Malamu ; \v 15 mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe. \b \li4 \v 16 Tala bakombo ya bato zomi na mibale oyo aponaki : \b \li1 Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; » \li1 \v 17 Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye, ba-oyo Yesu apesaki kombo « Boanerijesi » oyo elingi koloba : bana ya kake ; \li1 \v 18 Andre, \li1 Filipo, \li1 Bartelemi, \li1 Matayo, \li1 Toma, \li1 Jake, mwana mobali ya Alife ; \li1 Tade, \li1 Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote, \li1 \v 19 mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu. \s1 Yesu to Satana \r (Mat 12.22-32; Lk 11.15-23; 12.10) \p \v 20 Tango Yesu akotaki na ndako, bato ebele bayaki lisusu kosangana wana, mpe esalaki ete Ye elongo na bayekoli na Ye bazangaki ata tango mpo na kolia. \v 21 Tango bandeko ya libota na Ye bayokaki bongo, bayaki mpo na kozwa Ye na makasi, pamba te bazalaki koloba : \pi1 — Akomi na bokono ya liboma. \p \v 22 Balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi balobaki : \pi1 — Azali na molimo ya Belizebule kati na ye mpe azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe. \p \v 23 Yesu abengaki bango mpe alobaki na bango na masese : \pi1 \wj — Ndenge nini Satana akoki kobengana Satana ?\wj* \v 24 \wj Soki bokonzi moko ekabwani, bokonzi yango ekowumela te.\wj* \v 25 \wj Soki libota moko ekabwani, libota yango ekowumela te ;\wj* \v 26 \wj mpe soki Satana amibundisi mpe akabwani na ye moko, akowumela te, mpe suka na ye emonani.\wj* \v 27 \wj Pamba te moto moko te akoki kokota na ndako ya elombe mpo na kobotola biloko na ye soki liboso akangi ye te na basinga. Ezali kaka soki asali bongo nde akoki kobotola biloko na ye ya ndako.\wj* \v 28 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : masumu mpe maloba nyonso ya mabe oyo bato bakoki kofinga na yango Nzambe ekolimbisama ;\wj* \v 29 \wj kasi moto nyonso oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te, akomema mokumba ya lisumu yango mpo na libela.\wj* \p \v 30 Yesu alobaki bongo, mpo ete bazalaki koloba : « Azali na molimo mabe ! » \s1 Libota ya solo ya Yesu \r (Mat 12.46-50; Lk 8.19-21) \p \v 31 Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki, batelemaki libanda mpe batindaki moto kobenga Yesu. \v 32 Bato ebele penza bavandaki pembeni na Ye. Mpe bayaki koloba na Ye : \pi1 — Mama mpe bandeko na yo ya mibali bazali libanda, bazali koluka yo. \p Yesu azongisaki : \pi1 \v 33 \wj — Nani mama na Ngai ? Banani bandeko na Ngai ?\wj* \p \v 34 Atalaki bato oyo bavandaki pembeni na Ye mpe alobaki : \pi1 \wj — Botala mama na Ngai mpe bandeko na Ngai !\wj* \v 35 \wj Moto nyonso oyo asalaka mokano ya Nzambe, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.\wj* \c 4 \s1 Lisese ya moloni \r (Mat 13.1-15; Lk 8.4-10) \p \v 1 Yesu abandaki lisusu koteya pembeni ya ebale. Bato ebele basanganaki pembeni na Ye. Boye, amataki mpe avandaki kati na bwato, mpe bato nyonso batelemaki na mokili, pembeni ya ebale. \v 2 Azalaki koteya bango makambo ebele na masese. Na mateya na Ye, azalaki koloba : \v 3 \wj « Boyoka ! Moloni moko abimaki mpo na kolona.\wj* \v 4 \wj Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango.\wj* \v 5 \wj Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te ; ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te.\wj* \v 6 \wj Kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpo ete ezalaki na misisa te.\wj* \v 7 \wj Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki mpe efinaki-finaki yango. Boye, ebotaki bambuma te.\wj* \v 8 \wj Ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu ; ebimisaki mito, ekolaki mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma nkama moko. »\wj* \v 9 Yesu azalaki lisusu koloba : \wj « Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka ! »\wj* \p \v 10 Tango atikalaki Ye moko, bantoma zomi na mibale elongo na bato oyo bazingelaki Ye batunaki Ye na tina na masese. \v 11 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Epesameli bino koyeba mabombami ya Bokonzi ya Nzambe ; kasi mpo na ba-oyo bazali na libanda, makambo nyonso ezali kotalisama na masese ;\wj* \v 12 \wj mpo ete :\wj* \q1 \wj atako bakoki kotala, bamona eloko te ;\wj* \q2 \wj mpe atako bakoki koyoka, basosola eloko te ;\wj* \q1 \wj noki te bakobongola mitema,\wj* \q2 \wj mpe masumu na bango ekolimbisama.\wj* \p \v 13 Bongo Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Boni, bososoli lisese oyo te ? Ndenge nini bokososola masese mosusu ?\wj* \r (Mat 13.18-23; Lk 8.11-15) \pi1 \v 14 \wj Moloni alonaka Liloba.\wj* \v 15 \wj Bato mosusu bazali pembeni ya nzela epai wapi Liloba elonami. Tango kaka bayoki Liloba, Satana ayei mpe alongoli Liloba oyo elonami kati na mitema na bango.\wj* \v 16 \wj Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga : bayoki na bango Liloba mpe bayambi yango mbala moko na esengo ;\wj* \v 17 \wj kasi lokola bazali na misisa te kati na bango, bakowumela na Liloba yango kaka mpo na tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko eyei, basundoli mbala moko kondima na bango.\wj* \v 18 \wj Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi kati na banzube : bayoki na bango Liloba ;\wj* \v 19 \wj kasi mitungisi ya bomoi, lokoso ya bomengo mpe baposa ya makambo ya mokili efini-fini Liloba kati na bango, boye ekotikala kobota bambuma te kati na bango.\wj* \v 20 \wj Bamosusu bazali lokola nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu : bayoki malamu Liloba, bandimi yango mpe baboti bambuma ; moko aboti bambuma tuku misato ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu lisusu, bambuma nkama moko.\wj* \s1 Lisese ya mwinda \r (Lk 8.16-18) \p \v 21 Yesu alobaki na bango lisusu : \pi1 \wj — Boni, bamemaka solo mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto ? Ezali te mpo na kotia yango na likolo ya etelemiselo ya minda ?\wj* \v 22 \wj Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga kobima na pole.\wj* \v 23 \wj Tika ete moto azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !\wj* \p \v 24 Alobaki lisusu : \pi1 \wj — Bosala keba na makambo oyo bozali koyoka ! Bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu, mpe bakobakisa kutu lisusu koleka ;\wj* \v 25 \wj pamba te na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.\wj* \s1 Lisese ya mbuma oyo ekoli yango moko \p \v 26 Yesu alobaki lisusu : \pi1 \wj — Bokonzi ya Nzambe ekokani na moto oyo abwaki nkona na mabele :\wj* \v 27 \wj butu mpe moyi, alala to alamuka, nkona ebimisaka moto, ekolaka yango moko mpe ayebaka te ndenge nini yango ezali kokola ;\wj* \v 28 \wj pamba te yango moko mabele nde ebimisaka mbuma : liboso, moto ya nzete ; sima, matiti ; mpe na suka, bambuma ya ble etondaka na nzete.\wj* \v 29 \wj Bongo soki bambuma ekomeli, azwaka mbala moko mbeli oyo bakataka na yango matiti ya ble, pamba te eleko ya kobuka bambuma ekoki.\wj* \s1 Lisese ya mbuma ya mutarde \r (Mat 13.31-32; Lk 13.18-19) \p \v 30 Yesu alobaki lisusu : \pi1 \wj — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Tokoki kosalela lisese nini mpo na kokokanisa yango ?\wj* \v 31 \wj Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde : tango balonaka yango, ezalaka nkona oyo eleki moke kati na bankona nyonso ya mokili.\wj* \v 32 \wj Kasi sima na kolona yango, ekokola mpe ekomaka molayi koleka ndunda nyonso ya elanga, ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na se ya pio na yango.\wj* \p \v 33 Yesu azalaki kosalela masese ya ndenge na ndenge mpo na koteya bango Liloba na Nzambe, kolanda bososoli na bango ; \v 34 azangaki te kosalela masese mpo na koloba na bango. Kasi soki atikali Ye moko elongo na bayekoli na Ye, azalaki kolimbola makambo nyonso. \s1 Yesu aleki mopepe na makasi \r (Mat 8.23-27; Lk 8.22-25) \p \v 35 Kaka na mokolo yango wana, wana pokwa ekomaki, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.\wj* \p \v 36 Batikaki bato, bamemaki Ye na bwato mpe bakatisaki na ngambo mosusu. Babwato mosusu mpe ezalaki elongo na bango. \v 37 Mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa, mbonge ekomaki kobeta na bwato, mpe bwato ekomaki kotonda na mayi. \v 38 Yesu azalaki na sima, alalaki pongi mpe atiaki moto na likolo ya kuse. \p Bayekoli balamusaki Ye mpe bayebisaki Ye na koganga : \pi1 — Moteyi, tozali kokufa ; mpe ozali komitungisa na Yo te ? \p \v 39 Yesu alamukaki, agangelaki mopepe, mpe apesaki mitindo na ebale : \pi1 \wj — Tika makelele ! Vanda nye !\wj* \p Mopepe esilaki, mpe kimia monene ezongaki. \p \v 40 Bongo alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Mpo na nini bozali kobanga ? Bozali nanu na kondima te ?\wj* \p \v 41 Somo monene ekotaki kati na bango mpe bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani mpo ete mopepe mpe ebale etosa ye ? » \c 5 \s1 Yesu aleki milimo mabe na makasi \r (Mat 8.28-34; Lk 8.26-39) \p \v 1 Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, kati na etuka ya Geraza, \v 2 Yesu akitaki na bwato. Mbala moko, moto moko oyo azalaki na molimo mabe abimaki wuta na bakunda mpe ayaki kokutana na Ye. \v 3 Moto yango azalaki kovanda kati na bakunda, mpe moto moko te azalaki na makasi ya kokanga ye, ezala na nzela ya minyololo ; \v 4 pamba te mbala nyonso oyo bazalaki kokanga ye na nzela ya minyololo mpe kotia ye bibende na makolo, azalaki kokata yango mpe kobuka bibende yango ; moto moko te azalaki na makasi ya kolembisa Ye. \v 5 Tango nyonso, butu mpe moyi, azalaki koyengayenga kati na bakunda mpe na bangomba, azalaki koganga na mongongo makasi mpe komizokisa na mabanga. \p \v 6 Tango amonaki Yesu na mosika, akimaki mbangu, agumbamaki liboso na Ye \v 7 mpe agangaki na makasi nyonso : \pi1 — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, ngai na Yo likambo nini ? Nabondeli Yo na Kombo ya Nzambe, kotungisa ngai te ! \p \v 8 Pamba te Yesu alobaki na molimo yango : \wj « Yo molimo mabe, bima kati na moto oyo ! »\wj* \p \v 9 Yesu atunaki ye : \pi1 \wj — Kombo na yo nani ?\wj* \p Azongisaki : \pi1 — Kombo na Ngai ezali ngulupa, pamba te tozali ebele ! \p \v 10 Molimo mabe esengaki na Yesu na molende penza ete abengana yango te na mokili wana. \v 11 Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia pembeni ya ngomba. \p \v 12 Milimo mabe esengaki na Yesu : « Tinda biso kati na bangulu, mpo ete tokota kati na yango. » \p \v 13 Tango Yesu apesaki yango nzela, milimo mabe ebimaki kati na moto mpe ekendeki kokota kati na bangulu. Mbala moko, bangulu pene nkoto mibale ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba, ezindaki kati na ebale mpe ekufaki. \p \v 14 Bakengeli bangulu bakimaki mbangu mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bamboka mike ya zingazinga ; bongo bato bayaki mpo na kotala likambo oyo ewutaki kosalema. \v 15 Tango bakomaki epai na Yesu, bamonaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya ngulupa ya milimo mabe avandi wana, alata bilamba na mayele na ye ya kokoka. Boye somo ekangaki bango. \v 16 Bato oyo bamonaki ndenge likambo yango esalemaki bayebisaki bato mosusu makambo oyo ekomelaki moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe mpe oyo ekomelaki bangulu. \v 17 Boye bakomaki kobondela Yesu ete abima na etuka na bango. \p \v 18 Tango Yesu amataki na bwato, moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe asengaki na Ye ete bakende na Ye nzela moko. \p \v 19 Yesu apesaki ye nzela te, kasi alobaki na ye : \wj « Kende na ndako na yo, epai ya bandeko na yo ; yebisa bango makambo oyo Nkolo asaleli yo, mpe ndenge nini ayokeli yo mawa. »\wj* \p \v 20 Moto yango akendeki mpe abandaki kopanza sango ya makambo oyo Yesu asalaki mpo na ye, kati na Dekapoli ; mpe bato nyonso bakamwaki. \s1 Yesu aleki bokono mpe kufa na makasi \r (Mat 9.18-26; Lk 8.40-56) \p \v 21 Yesu azwaki bwato mpe azongaki na ngambo ya ebale ; mpe bato ebele basanganaki pene na Ye, pembeni ya ebale. \p \v 22 Jairisi, moko kati na bakambi ya ndako ya mayangani, ayaki wana ; tango kaka amonaki Yesu, amibwakaki na makolo na Ye \v 23 mpe abondelaki Ye makasi : « Kala mingi te, mwana na ngai ya mwasi azali kokufa ! Nabondeli yo : yaka mpe tiela ye maboko mpo ete abika na bokono na ye mpe akufa te. » \p \v 24 Boye Yesu akendeki na ye nzela moko ; bato ebele bazalaki kolanda Ye mpe kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso. \v 25 Ezalaki mpe na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. \v 26 Amonaki pasi mingi mpo na koluka lobiko epai na minganga ebele, mpe asilisaki mbongo na ye nyonso na pamba, kasi abikaki kaka te ; nzokande pasi na ye ezalaki komata se komata. \v 27 Tango ayokaki sango ya Yesu, ayaki na sima, kati na ebele ya bato, mpe asimbaki elamba na Ye, \v 28 pamba te azalaki komilobela : « Soki kaka nasimbi ata bilamba na Ye, nakobika ! » \p \v 29 Kaka na tango yango, makila etikaki kotanga, mpe amonaki ete abiki na bokono kati nzoto na ye. \p \v 30 Mbala moko, Yesu mpe asosolaki ete nguya moko ebimi kati na Ye ; abalukaki epai ya ebele ya bato mpe atunaki : \pi1 \wj — Nani asimbi Ngai na bilamba ?\wj* \p \v 31 Bayekoli na Ye bazongisaki : \pi1 — Ozali komona malamu ete bato bazali kotutana-tutana na Yo na bangambo nyonso, mpe ozali kotuna lisusu : \wj « Nani asimbi Ngai ? »\wj* \p \v 32 Kasi Yesu akomaki kotala epai ya ebele ya bato mpo na koluka koyeba nani oyo asali bongo. \v 33 Boye, mwasi yango abangaki mpe akomaki kolenga, mpo ayebaki likambo oyo esalemaki kati na ye. Ayaki kofukama liboso ya Yesu mpe ayebisaki Ye solo nyonso. \p \v 34 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia mpe zwa lobiko kati na pasi na yo !\wj* \p \v 35 Wana Yesu azalaki nanu koloba, ndambo ya bato bayaki longwa na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani mpo na koloba na ye : \pi1 — Mwana na yo ya mwasi asili kokufa ; mpo na nini ozali lisusu kotungisa moteyi ? \p \v 36 Atako Yesu ayokaki maloba yango, kasi alobaki kaka na mokambi ya ndako ya mayangani : \pi1 \wj — Kobanga te, zala kaka na kondima !\wj* \p \v 37 Atikaki moto moko te kolanda Ye longola kaka Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko ya Jake. \v 38 Tango bakomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, Yesu amonaki yikiyiki kati na bato oyo bazalaki kolela mpe koganga makasi. \p \v 39 Akotaki mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Mpo na nini yikiyiki oyo nyonso ? Mpo na nini bozali kolela ? Mwana akufi te ; alali nde pongi !\wj* \p \v 40 Bongo bakomaki koseka Ye. Sima na Yesu kobimisa bato nyonso, akamataki tata ya mwana, mama ya mwana mpe bayekoli oyo bazalaki na Ye elongo, mpe bakotaki na esika oyo mwana azalaki. \v 41 Asimbaki ye na loboko mpe alobaki na ye : \tl \+wj « Talita kumi ! »\+wj*\tl* Elingi koloba : \wj Elenge mwasi, nalobi na yo, Telema !\wj* \p \v 42 Mbala moko, elenge mwasi atelemaki mpe akomaki kotambola. Azalaki na mibu pene zomi na mibale. Bato nyonso bakamwaki makasi penza. \v 43 Yesu apekisaki bango koloba likambo yango ata na moto moko ; mpe ayebisaki bango ete bapesa elenge mwasi yango bilei. \c 6 \s1 Yesu mpe bato ya Nazareti \r (Mat 13.54-58; Lk 4.16-30) \p \v 1 Sima na Yesu kolongwa na ndako yango, azongaki elongo na bayekoli na Ye, na engumba epai wapi abotama. \v 2 Wana mokolo ya Saba ekokaki, Yesu akomaki koteya kati na ndako ya mayangani. \p Kati na bato oyo bayokaki Ye, ebele bakamwaki makasi. Batunaki : « Boni, moto oyo azwi makambo oyo wapi ? Nani apesi ye bwanya ya boye ? Azwi wapi nguya ya kosala bikamwa oyo nyonso ? \v 3 Ezali ye te mosali mabaya ? Ezali ye te mwana ya Mari mpe ndeko ya Jake, Jozefi, Jide mpe Simona ? Boni, bandeko na ye ya basi bavandaka awa te elongo na biso ? » \p Yango wana, ezalaki penza libaku mabe mpo na bango kondima Ye. \p \v 4 Yesu alobaki na bango : \wj « Ezali kaka kati na ekolo na ye, kati na libota na ye mpe kati na ndako na ye nde mosakoli azwaka lokumu te. »\wj* \p \v 5 Alongaki te kosala bikamwa na esika yango, kasi abikisaki kaka mwa ndambo ya babeli oyo atielaki maboko. \v 6 Boye, akamwaki mingi penza bozangi kondima na bango. \s1 Yesu atindi bantoma zomi na mibale \r (Mat 10.1, 5-14; Lk 9.1-6) \p Yesu azalaki kotambola na bamboka ya zingazinga mpo na koteya. \v 7 Abengaki bantoma na Ye zomi na mibale, atindaki bango mibale-mibale, mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe. \v 8 Alobaki na bango : \wj « Bomema eloko moko te mpo na mobembo, longola kaka lingenda. »\wj* \p Alobaki na bango : \wj « Bomema te, ezala sakosi to lipa to mbongo kati na mokaba na bino.\wj* \v 9 \wj Bolata basandale na makolo na bino, kasi bomema banzambala mibale te.\wj* \v 10 \wj Na ndako nyonso oyo bakoyamba bino, bovanda kuna kino tango bokolongwa.\wj* \v 11 \wj Mpe soki na esika songolo, baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na esika yango, bopupola putulu ya makolo na bino ; yango ekozala litatoli oyo ekofunda bango. »\wj* \p \v 12 Bantoma bakendeki mpe bateyaki bato ete babongola mitema. \v 13 Bazalaki kobengana milimo mabe ebele mpe kobikisa babeli mingi na kopakola bango mafuta. \s1 Kufa ya Yoane Mobatisi \r (Mat 14.1-2; Lk 9.7-9) \p \v 14 Mokonzi Erode ayokaki sango na tina na Yesu, pamba te Kombo na Ye eyebanaki makasi. \p Bazalaki koloba boye na tina na Yesu : « Yoane Mobatisi asekwi kati na bakufi ! Yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa ! » \p \v 15 Bato mosusu bazalaki koloba : « Ezali Eliya ! » \p Bamosusu : « Azali mosakoli, lokola moko kati na basakoli ya kala ! » \p \v 16 Kasi tango Erode azalaki koyoka maloba wana nyonso, azalaki komilobela : « Ezali Yoane oyo nakataki moto nde asekwi kati na bakufi ! » \p \v 17 Pamba te Erode amipeselaki mitindo ete bakanga Yoane minyololo mpe babwaka ye kati na boloko ; asalaki bongo mpo na kosepelisa Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko na ye, oyo ye Erode abalaki. \p \v 18 Yoane azalaki koloba na Erode : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa nzoto na mwasi ya ndeko na yo. » \p \v 19 Erodiade akangelaki Yoane kanda kati na motema mpe azalaki koluka nzela ya kobomisa ye, kasi azalaki kokoka te, \v 20 pamba te Erode azalaki kobanga Yoane, wana ayebaki ete Yoane azali moto ya sembo mpe mosantu, mpe azalaki kobatela ye. Tango nyonso oyo Erode azalaki koyoka Yoane koloba, azalaki komitungisa mingi ; nzokande azalaki kaka kosepela koyoka ye. \p \v 21 Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, Erodiade akutanaki na libaku ya kokokisa mokano na ye. Na mokolo yango, Erode asalaki feti monene mpe abengisaki bakalaka, bakonzi minene ya basoda mpe bato ya lokumu ya Galile. \v 22 Mwana mwasi ya Erodiade akotaki mpe abinaki, asepelisaki Erode mpe bato oyo abengisaki na feti. Mokonzi alobaki na mwana mwasi : \pi1 — Senga ngai nyonso oyo okolinga, nakopesa yo yango ! \p \v 23 Mpe alapaki kutu ndayi epai na ye : \pi1 — Nakopesa yo nyonso oyo okosenga ngai, ata ndambo ya bokonzi na ngai. \p \v 24 Mwana mwasi abimaki mpe akendeki kotuna toli epai ya mama na ye : \pi1 — Mama, nasenga nini ? \p Mama na ye azongisaki : \pi1 — Senga moto ya Yoane Mobatisi. \p \v 25 Mbala moko, mwana mwasi azongaki na lombangu epai ya mokonzi mpe alobaki na ye : \pi1 — Nalingi ete opesa ngai, sik’oyo, na sani, moto ya Yoane Mobatisi. \p \v 26 Mokonzi ayokaki mawa mingi na motema, kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, aboyaki kopimela ye yango. \v 27 Mbala moko, mokonzi atindaki moko kati na bakengeli na ye ete amema moto ya Yoane. Mokengeli yango akendeki na boloko, akataki moto ya Yoane, \v 28 amemaki yango, na sani ; apesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi apesaki yango epai ya mama na ye. \v 29 Tango bayekoli ya Yoane bayokaki sango yango, bayaki kozwa nzoto na ye mpe batiaki yango kati na kunda moko. \s1 Bantoma bazongi \r (Lk 9.10) \p \v 30 Tango bantoma bazongaki, basanganaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye makambo nyonso oyo bawutaki kosala mpe nyonso oyo bateyaki. \p \v 31 Boye, lokola bato mingi bazalaki koya mpe kozonga, mpe bazalaki kozwa ata tango te ya kolia, Yesu alobaki na bango : \wj « Boya elongo na Ngai, na esika oyo ebombama mpe bopema mwa moke. »\wj* \p \v 32 Bakendeki na bwato, na esika oyo ebombama. \s1 Yesu aleisi mibali nkoto mitano \r (Mat 14.13-21; Lk 9.10-17; Yn 6.1-15) \p \v 33 Kasi bato ebele oyo bamonaki bango kokende, basosolaki ete ezali bango. Boye balandaki bango mbangu na makolo longwa na bingumba nyonso mpe bakomaki liboso na bango, na esika oyo bazalaki kokende. \v 34 Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango, pamba te bazalaki lokola bameme oyo ezangi mobateli. Boye, abandaki koteya bango makambo ebele. \p \v 35 Lokola ngonga epusanaki makasi, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpe balobaki na Ye : \pi1 — Ngonga epusani makasi, mpe esika oyo ezali esobe ! \v 36 Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga. \p \v 37 Kasi Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.\wj* \p Bayekoli balobaki na Ye : \pi1 — Ondimi penza tokende kosomba mapa mpe toleisa bango, na mbongo ya bibende nkama mibale ? \p \v 38 Yesu atunaki bango : \pi1 \wj — Mapa boni bozali na yango ? Bokende nanu kotala.\wj* \p Bakendeki kotala mpe balobaki : \pi1 — Tozali na mapa mitano mpe bambisi mibale. \p \v 39 Yesu apesaki bango mitindo ete bakabola bato nyonso na masanga mpe bavandisa bango na matiti ya mobesu. \v 40 Boye, batandamaki na milongo ya bato nkama moko mpe ya bato tuku mitano. \v 41 Yesu akamataki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai na bato. Akabolaki lisusu bambisi nyonso mibale epai ya bango nyonso. \v 42 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. \v 43 Bongo bayekoli balokotaki biteni ya mapa mpe ya bambisi, oyo etikalaki ; mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale. \v 44 Bato oyo baliaki mapa yango bazalaki mibali pene nkoto mitano. \s1 Yesu atamboli na mayi \r (Mat 14.22-33; Yn 6.16-21) \p \v 45 Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na Betisaida, na ngambo mosusu ya ebale, wana Ye moko akozongisa bato. \v 46 Sima na Ye kozongisa bato yango, amataki na ngomba mpo na kosambela. \p \v 47 Wana ekomaki pokwa, bwato ekomaki na kati-kati ya ebale ; mpe Ye, Yesu, azalaki Ye moko na mokili, \v 48 amonaki bayekoli na Ye kobunda-bunda mpo na koluka nkayi, pamba te mopepe ezalaki kozongisa bango na sima. Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango. \v 49 Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, bakanisaki ete ezali elima, mpe bakomaki koganga. \v 50 Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango. \p Mbala moko, Yesu alobaki na bango : \wj « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! »\wj* \p \v 51 Bongo amataki na bwato epai bayekoli bazalaki, mpe mopepe ekitaki. Bakamwaki mingi penza, \v 52 pamba te basosolaki te tina ya likamwisi ya mapa, mpo ete mayele na bango ezalaki ya kozipama. \r (Mat 14.34-36) \p \v 53 Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti mpe bakangisaki bwato na bango na libongo. \v 54 Tango kaka bakitaki na bwato, bato basosolaki mbala moko Yesu. \v 55 Boye, bato bapotaki mbangu kati na etuka wana mobimba mpe bakomaki komema babeli, na tsipoyi, na bisika nyonso oyo bayokaki ete Yesu akomi kuna. \v 56 Na bisika nyonso oyo Yesu azalaki kokende, na bamboka, na bingumba to na bilanga, bazalaki komema babeli na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe bazalaki kosenga na Yesu ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo bazalaki kolonga kosimba yango bazalaki kobika na bokono na bango. \c 7 \s1 Yesu mpe bokoko ya Bayuda \r (Mat 15.1-20) \p \v 1 Bafarizeo mpe ndambo ya balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi basanganaki zingazinga ya Yesu. \v 2 Bamonaki bayekoli mosusu ya Yesu kolia lipa na maboko ya mbindo, elingi koloba na maboko oyo basukola te. \v 3 Nzokande, Bafarizeo mpe Bayuda nyonso baliaka te soki basukoli te maboko malamu. Ezalaki na nzela wana nde bazalaki kotosa bokoko na bango. \v 4 Mpe soki bawuti na esika oyo bato ebele bakutanaka, baliaka te soki bamipetoli nanu te na mayi. Bazalaki lisusu na mibeko ebele ya bokoko oyo bazalaki kotosa, ndakisa : kosukola bakopo, bambeki, bambeto mpe basani ya bibende. \v 5 Boye, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko batunaki Yesu : \pi1 — Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Mpo na nini bazali kolia na maboko ya mbindo ? \p \v 6 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Bato ya bilongi mibale ! Mosakoli Ezayi asakolaki penza malamu na tina na bino, kolanda ndenge ekomama :\wj* \q1 \wj « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu,\wj* \q2 \wj kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;\wj* \q1 \v 7 \wj basambelaka Ngai kaka na pamba,\wj* \q2 \wj mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »\wj* \m \v 8 \wj Botiaka mibeko ya Nzambe pembeni mpo na kotosa bokoko ya bato.\wj* \p \v 9 Alobaki na bango lisusu : \pi1 \wj — Boyebi malamu penza kosundola mibeko ya Nzambe mpo na kobatela bokoko na bino.\wj* \v 10 \wj Solo, Moyize alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; » mpe « moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »\wj* \pi1 \v 11 \wj Kasi bino, boteyaka ete soki moto alobi na tata na ye to na mama na ye : « Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nakobonza yango lokola likabo epai ya Nzambe, »\wj* \v 12 \wj akangolami na mokumba ya kosalela tata na ye to mpo na mama na ye likambo songolo.\wj* \v 13 \wj Na bongo, bokomisaka pamba Liloba na Nzambe na nzela ya bokoko oyo bolakisaka. Mpe bosalaka makambo mosusu ebele ya lolenge wana.\wj* \p \v 14 Yesu abengaki lisusu ebele ya bato mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Bino nyonso, boyoka Ngai mpe bososola likambo oyo.\wj* \v 15 \wj Eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo, kasi ezali oyo ebimaka kati na moto nde ekomisaka ye mbindo.\wj* [ \v 16 \wj Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !\wj*]\f + \fr 7.16 \fr*\ft Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.\ft*\f* \p \v 17 Tango Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako, bayekoli na Ye batunaki Ye tina ya lisese yango. \v 18 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Bino mpe, boni, bozali mayele te ? Bozali kososola te ete eloko moko te oyo ewuti na libanda mpe ekoti kati na moto ekoki kokomisa ye mbindo.\wj* \v 19 \wj Pamba te ekendaka te na motema na ye, kasi ekendaka nde na libumu na ye ; mpe na sima, ekendaka na zongo.\wj* \m Na maloba oyo, Yesu atatolaki ete bilei nyonso ezali peto. \p \v 20 Yesu alobaki lisusu : \pi1 \wj — Oyo ebimaka na moto, yango nde ekomisaka ye mbindo.\wj* \v 21 \wj Pamba te, ezali wuta na kati, na motema penza ya moto nde ewutaka makanisi mabe, kindumba, moyibi, koboma,\wj* \v 22 \wj ekobo, lokoso ya mbongo, kanda, mayele mabe, pite, likunya, songisongi, mafinga, lolendo mpe makambo nyonso mosusu ya mabe.\wj* \v 23 \wj Makambo nyonso wana ya mabe ewutaka kati na moto, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.\wj* \s1 Kondima ya mwasi mopagano \r (Mat 15.21-28) \p \v 24 Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri\f + \fr 7.24 \fr*\ft Mikanda mosusu ya kala ebakisaka : « mpe ya Sidoni »\ft*\f*. Akotaki kati na ndako moko ; alingaki te ete ata moto moko ayeba yango, kasi alongaki kaka te kobombama. \v 25 Pamba te, ezalaki na mwasi moko oyo mwana na ye ya mwasi azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezalaki mpe konyokola ye makasi ; boye tango kaka ayokaki sango na tina na Yesu, ayaki komibwaka na makolo ya Ye. \v 26 Mwasi yango azalaki moto ya Grese, moto ya Fenisi ya Siri ; asengaki na Yesu ete abengana molimo mabe oyo ezali konyokola mwana na ye ya mwasi. \p \v 27 Kasi Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Tika bana ya ndako balia nanu mpe batonda, pamba te ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !\wj* \p \v 28 Mwasi yango azongiselaki Yesu : \pi1 — Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni oyo bana bakweyisaka na se ya mesa ! \p \v 29 Yesu alobaki : \pi1 \wj — Mpo na maloba oyo olobi, kende, zonga na ndako na yo, pamba te molimo mabe esili kobima na mwana na yo ya mwasi.\wj* \p \v 30 Mpe tango akendeki na ndako, akutaki mwana na ye alali na mbeto mpe molimo mabe ebimi. \s1 Yesu abikisi baba \p \v 31 Yesu alongwaki na engumba ya Tiri, alekaki na Sidoni mpe akendeki na ebale ya Galile wana akatisaki etuka ya bingumba zomi. \v 32 Bamemelaki ye moto moko oyo akufa matoyi mpe alobaka te, mpe basengaki na Yesu ete atia ye maboko. \v 33 Yesu alongolaki ye kati na ebele ya bato, amemaki ye na pembeni mpe atiaki ye misapi na matoyi ; atiaki ye soyi mpe asimbaki lolemo ya moto yango. \v 34 Atalaki na likolo, abendaki pema mpe alobaki na ye : \wj « Fungwama ! »\wj* \p \v 35 Mbala moko, matoyi na ye efungwamaki, lolemo na ye ekangolamaki mpe akomaki koloba malamu. \v 36 Yesu apekisaki bango ete baloba yango na moto te. Atako azalaki kopekisa bango makasi, kasi bango bazalaki kaka kopanza sango yango koleka. \p \v 37 Bato bakamwaki makasi mpe bazalaki koloba : \pi1 — Azali kosala makambo nyonso malamu ; azali kosala ete ezala bato oyo bakufa matoyi bakoka koyoka, mpe bababa bakoka koloba. \c 8 \s1 Yesu aleisi mibali nkoto minei \r (Mat 15.32-39) \p \v 1 Na mikolo yango, ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana zingazinga ya Yesu. Lokola bazalaki na eloko ya kolia te, Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango : \pi1 \v 2 \wj — Nazali koyokela bato oyo mawa, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te.\wj* \v 3 \wj Soki nazongisi bango na bandako na bango na nzala, bakolemba nzoto na nzela ; pamba te, bato mosusu kati na bango bawutaki mosika.\wj* \p \v 4 Bayekoli na Ye bazongisaki : \pi1 — Kati na esobe oyo, esika nini tokoki kozwa mapa mpo na koleisa bango mpe batonda ? \p \v 5 Yesu atunaki bango : \pi1 \wj — Bozali na mapa boni ?\wj* \p Bazongisaki : \pi1 — Tozali na mapa sambo. \p \v 6 Boye, alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. Bongo azwaki mapa yango sambo, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. Mpe bayekoli basalaki bongo. \v 7 Bazalaki mpe na mwa ndambo ya bambisi ya mike-mike. Apambolaki yango mpe alobaki na bayekoli na Ye ete bakabola yango. \v 8 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo. \v 9 Bato bazalaki pene nkoto minei. Bongo, Yesu azongisaki bango. \p \v 10 Mbala moko, Yesu amataki na bwato elongo na bayekoli na Ye mpe akendeki na etuka ya Dalimanuta. \s1 Yesu mpe Bafarizeo \r (Mat 16.1-4) \p \v 11 Bafarizeo bayaki mpe bakomaki kotuna Yesu mituna ; mpo na komeka Ye, basengaki na Ye ete asala elembo moko kowuta na Likolo. \p \v 12 Yesu ayokaki mawa makasi kati na molimo na Ye mpe alobaki : \wj « Mpo na nini bato ya ekeke oyo bazali kosenga elembo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : bakopesamela elembo moko te ! »\wj* \p \v 13 Bongo atikaki bango, amataki lisusu na bwato mpe akendeki na ngambo mosusu ya ebale. \r (Mat 16.5-12) \p \v 14 Bayekoli babosanaki komema mapa ; bazalaki kaka na lipa moko kati na bwato. \v 15 Yesu akebisaki bango : \pi1 \wj — Bofungola miso mpe bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Erode !\wj* \p \v 16 Bayekoli bakomaki kolobana bango na bango : \pi1 — Azali koloba bongo mpo ete tozali na mapa te. \p \v 17 Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki : \pi1 \wj — Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ? Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ; mayele na bino ezali kaka ya kozipama ; bozali na mitema makasi ;\wj* \v 18 \wj bozali na miso, kasi bozali komona te ; bozali na matoyi, kasi bozali koyoka te ? Bobosani penza !\wj* \v 19 \wj Tango nakataki mapa mitano mpo na kokabolela bato nkoto mitano, bozongaki na motango boni ya bitunga etonda na biteni ya mapa, sima na kokabolela bato ?\wj* \p Bazongisaki : \pi1 — Bitunga zomi na mibale. \p \v 20 \wj Bongo tango nakataki mapa sambo mpo na kokabolela bato nkoto minei, bozongaki na bitunga boni etonda na biteni ya mapa ?\wj* \p Bazongisaki : \pi1 — Tolokotaki bitumba sambo. \p \v 21 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Bozwi kaka bososoli nanu te ?\wj* \s1 Yesu abikisi mokufi miso \p \v 22 Tango bakomaki na Betisaida, bato bamemaki epai na Yesu moto moko akufa miso ; mpe basengaki na Yesu ete asimba ye. \v 23 Yesu asimbaki loboko ya mokufi miso mpe amemaki ye na libanda ya mboka ; bongo apakolaki ye soyi na miso, atielaki ye maboko mpe atunaki ye : \pi1 \wj — Boni, omoni eloko ?\wj* \p \v 24 Moto yango atalaki mpe alobaki : \pi1 — Nazali komona bato, kasi bazali lokola banzete oyo ezali kotambola. \p \v 25 Bongo Yesu atiaki lisusu maboko na Ye na miso ya moto yango, mpe moto yango abikaki. Boye akomaki komona malamu penza. \p \v 26 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Kende na ndako na yo, komeka kutu te kozonga na mboka.\wj* \ms1 Yesu mpe bayekoli na Ye \s1 Petelo atatoli mpo na Yesu \r (Mat 16.13-23; Lk 9.18-22) \p \v 27 Yesu mpe bayekoli na Ye bakendeki na bamboka ya Sezarea ya Filipo. Na nzela, atunaki bango : \pi1 \wj — Bato bazali koloba ete Ngai nazali nani ?\wj* \p \v 28 Bazongisaki : \pi1 — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli. \p \v 29 Yesu atunaki bango : \pi1 \wj — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ?\wj* \p Petelo azongiselaki Ye : \pi1 — Ozali Masiya. \p \v 30 Yesu apekisaki bango makasi koloba bongo na moto ata moko. \s1 Yesu alobi na tina na kufa na Ye \p \v 31 Yesu akomaki koteya bango : \pi1 \wj — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye, basengeli koboma Ye, mpe, sima na mikolo misato, asengeli kosekwa.\wj* \p \v 32 Azalaki koloba makambo yango na polele penza. \p Bongo Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye : \pi1 — Koloba bongo te ! \p \v 33 Kasi Yesu abalukaki, atalaki bayekoli na Ye mpe apamelaki Petelo : \pi1 \wj — Mosika na Ngai, Satana ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.\wj* \s1 Ndenge nini kolanda Yesu \r (Mat 16.24-28; Lk 9.23-27) \p \v 34 Yesu abengaki ebele ya bato mpe bayekoli na Ye, alobaki na bango : \pi1 \wj — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.\wj* \v 35 \wj Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu akobikisa yango.\wj* \v 36 \wj Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ?\wj* \v 37 \wj Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?\wj* \v 38 \wj Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, kati na bato ya ekeke oyo, ba-oyo batosaka Nzambe te mpe batondi na masumu, Mwana na Moto mpe akoyoka ye soni, tango akoya elongo na ba-anjelu ya bule kati na nkembo ya Tata na Ye.\wj* \c 9 \p \v 1 Yesu alobaki na bango lisusu : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Bokonzi ya Nzambe koya na nguya.\wj* \s1 Yesu abongwani \r (Mat 17.1-9; Lk 9.28-36) \p \v 2 Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi epai wapi bazalaki kaka bango moko. Yesu abongolamaki na miso na bango : \v 3 bilamba na Ye ekomaki kongenga, ekomaki pembe makasi ; moto moko te kati na mokili akoki kobimisa pembe ya ndenge wana. \v 4 Mbala moko, bamonaki Eliya elongo na Moyize bazali kosolola na Yesu. \v 5 Petelo alobaki na Yesu : \pi1 — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Tokotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya. \p \v 6 Solo, Petelo azalaki kososola te makambo oyo azalaki koloba, pamba te bango misato batondaki na kobanga. \v 7 Lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : \pi1 — Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, boyoka Ye ! \p \v 8 Mbala moko, bayekoli batalaki zingazinga na bango mpe bamonaki moto mosusu te elongo na bango, kaka Yesu. \p \v 9 Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apekisaki bango koloba ata na moto moko, makambo oyo bawutaki komona kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi. \v 10 Babatelaki likambo yango na motema. Atako bongo, bazalaki kaka kotunana : \pi1 — Kosekwa kati na bakufi elingi koloba nini ? \r (Mat 17.10-13) \p \v 11 Bayekoli batunaki Yesu : \pi1 — Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso ? \p \v 12 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Solo, Eliya asengeli koya moto ya liboso mpo na kozongisa makambo nyonso na molongo. Bongo mpo na nini ekomama lisusu ete Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi, mpe basengeli koboya Ye ?\wj* \v 13 \wj Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya ayaki mpe basalaki ye makambo nyonso oyo balingaki, kolanda ndenge ekomama na tina na ye.\wj* \s1 Yesu abikisi mwana oyo azalaki na molimo mabe \r (Mat 17.14-21; Lk 9.37-43) \p \v 14 Tango bakomaki pene ya esika oyo bayekoli mosusu bazalaki, bamonaki ebele ya bato penza bazingeli bango, mpe balakisi ya Mobeko kotiana tembe elongo na bayekoli. \v 15 Tango kaka bato yango bamonaki Yesu, bakamwaki mingi mpe bapotaki mbangu mpo na kokutana na Ye mpe kopesa Ye mbote. \p \v 16 Yesu atunaki bango : \pi1 \wj — Likambo nini bozali kotiana na yango tembe elongo na bayekoli ?\wj* \p \v 17 Moto moko kati na ebele yango ya bato azongiselaki Ye : \pi1 — Moteyi, namemaki mwana na ngai, oyo ya mobali epai na Yo ; pamba te azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo esala ete alobaka te. \v 18 Bipai nyonso oyo molimo yango ekangaka ye, ebwakaka ye na mabele, mpe mwana akomaka kobimisa fulufulu na monoko, kolia minu, mpe nzoto na ye ekangamaka. Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te. \p \v 19 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Ekeke ya bato bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.\wj* \p \v 20 Bongo bamemaki mwana yango epai ya Yesu. Tango kaka molimo yango ya mabe emonaki Yesu, eningisaki mwana yango makasi mpe mwana akweyaki na mabele, akomaki kobaluka-baluka mpe kobimisa fulufulu na monoko. \p \v 21 Yesu atunaki tata ya mwana : \pi1 \wj — Esali mikolo boni wuta mwana akoma boye ?\wj* \p Tata ya mwana azongisaki : \pi1 — Wuta tango azalaki mwana moke penza. \v 22 Mbala mingi, molimo mabe etindikaka ye na moto to na mayi mpo na koluka koboma ye. Kasi soki okoki kobikisa ye, yokela biso mawa mpe sunga biso. \p \v 23 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Olobi nini : « Soki okoki ! » Nyonso ekoki kosalema mpo na moto oyo azali na kondima.\wj* \p \v 24 Mbala moko, tata ya mwana alobaki na mongongo makasi : \pi1 — Nandimi ! Sunga ngai, pamba te nazangi kondima. \p \v 25 Tango Yesu amonaki ebele ya bato koya mbangu, abenganaki molimo mabe : \pi1 \wj — Molimo mabe, yo oyo okomisaka moto baba, napesi yo mitindo : bima kati na mwana oyo mpe kozonga lisusu te kati na ye.\wj* \p \v 26 Molimo mabe egangaki, eningisaki mwana makasi mpe ebimaki kati na ye. Mwana akomaki lokola moto akufi na ndenge ete mingi kati na bato oyo bazalaki wana bakomaki koloba « Akufi ! » \p \v 27 Kasi Yesu asimbaki mwana yango na loboko mpe atelemisaki ye ; mpe mwana atelemaki. \p \v 28 Yesu akotaki na ndako ; lokola bayekoli batikalaki bango moko kaka elongo na Ye, batunaki Ye : \pi1 — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ? \p \v 29 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Babenganaka molimo ya ndenge wana kaka na losambo\wj*\f + \fr 9.29 \fr*\ft Mikanda mosusu ya kala ebakisa : mpe kokila bilei.\ft*\f*. \s1 Yesu alobeli kufa mpe lisekwa na Ye \r (Mat 17.22-23; Lk 9.43-45) \p \v 30 Tango balongwaki na esika wana, bakatisaki na mokili ya Galile mpe Yesu alingaki te ete moto ata moko ayeba esika oyo bazali, \v 31 pamba te azalaki koteya bayekoli na Ye mpe koloba na bango : \pi1 \wj — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato, bakoboma Ye, mpe, mikolo misato sima na kufa na Ye, akosekwa.\wj* \p \v 32 Kasi bazalaki kososola te maloba wana mpe bazalaki kobanga kopesa Ye mituna na tina na yango. \s1 Nani aleki monene ? \r (Mat 18.1-5; Lk 9.46-48) \p \v 33 Tango bakomaki na Kapernawumi, wana bazalaki kati na ndako, Yesu atunaki bango : \pi1 \wj — Likambo nini bozalaki kotiana tembe na nzela ?\wj* \p \v 34 Kasi bavandaki nye, pamba te, na nzela, bazalaki penza kotiana tembe mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene. \p \v 35 Yesu avandaki, abengaki bayekoli zomi na mibale mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso asengeli kozala moto ya suka mpe mosali ya bato nyonso.\wj* \p \v 36 Yesu akamataki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango mpe, sima na Ye koyamba mwana yango na maboko na Ye, alobaki na bango : \pi1 \v 37 \wj — Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko. Mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi Ngai te, kasi ayambi nde Motindi na Ngai.\wj* \r (Lk 9.49-50) \p \v 38 Yoane alobaki : \pi1 — Moteyi, tomonaki moto moko azali kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe topekisaki ye, pamba te azali elongo na biso te. \p \v 39 Kasi Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Bopekisa ye te ; pamba te moto moko te akoki kosala bikamwa na Kombo na Ngai mpe aloba mbala moko, sima na mwa tango, mabe na tina na Ngai.\wj* \v 40 \wj Moto oyo atelemeli biso te azali mpo na biso.\wj* \v 41 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo apesi bino kopo ya mayi na Kombo na Ngai, mpo ete bozali bato ya Klisto, akotikala kobungisa te lifuti na ye.\wj* \pi1 \v 42 \wj Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.\wj* \pi1 \v 43 \wj Soki loboko na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko, na esika ete otikala na maboko mibale mpe okende na lifelo, kati na moto oyo ekufaka te,\wj* [ \v 44 \wj epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.\wj*]\f + \fr 9.44 \fr*\ft Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.\ft*\f* \v 45 \wj Soki lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na lokolo moko, na esika ete otikala na makolo mibale mpe obwakama na lifelo\wj* [ \v 46 \wj epai wapi nkusu mpe moto ekufaka te.\wj*]\f + \fr 9.46 \fr*\ft Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.\ft*\f* \v 47 \wj Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota na Bokonzi ya Nzambe, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na lifelo\wj* \v 48 \wj epai wapi\wj* \q1 \wj nkusu ekufaka te,\wj* \q2 \wj mpe moto ekufaka te.\wj* \r (Mat 5.13; Lk 14.34-35) \pi1 \v 49 \wj Pamba te moto na moto akoleka na moto mpo ete akoma elengi lokola mungwa.\wj* \v 50 \wj Mungwa ezali malamu. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bokokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Yango wana, bozala na mungwa kati na bino, mpe bozala na kimia bino na bino.\wj* \c 10 \ms1 Lotomo ya Yesu kati na Yuda mpe Yelusalemi \s1 Mateya na tina na koboma libala \r (Mat 19.1-12) \p \v 1 Yesu alongwaki na esika wana mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani. Ebele penza ya bato bayaki lisusu kosangana pene na ye ; bongo akomaki lisusu koteya bango kolanda momesano na Ye. \p \v 2 Bafarizeo bapusanaki mpe bapesaki Ye motuna mpo na komeka Ye : \pi1 — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala ? \p \v 3 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Moyize apesaki bino mobeko nini ?\wj* \p \v 4 Balobaki na Yesu : \pi1 — Moyize apesaki na mobali nzela ya koboma libala na mwasi na ye, kaka soki akomi mokanda ya koboma libala. \p \v 5 Bongo Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Moyize akomaki mobeko wana mpo na bino, pamba te mitema na bino ezali mabanga.\wj* \v 6 \wj Kasi na ebandeli ya mokili, Nzambe « akelaki bango mobali mpe mwasi. »\wj* \v 7 \wj Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye,\wj* \v 8 \wj mpe bango mibale bakokoma nzoto moko. Boye, bakozala lisusu mibale te, kasi nzoto moko.\wj* \v 9 \wj Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi.\wj* \p \v 10 Tango bazongaki na ndako, bayekoli batunaki lisusu Yesu na tina na likambo yango. \v 11 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo liboso ya mwasi na ye ya liboso.\wj* \v 12 \wj Soki mwasi abomi libala na ye mpe abali mobali mosusu asali ekobo.\wj* \s1 Yesu ayambi bana mike \r (Mat 19.13-15; Lk 18.15-17) \p \v 13 Bato bazalaki komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko, kasi bayekoli bazalaki kobengana bato oyo bazalaki komema bana yango. \p \v 14 Tango Yesu amonaki bongo, ayokaki pasi na motema mpe alobaki na bayekoli : \pi1 \wj — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.\wj* \v 15 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.\wj* \m \v 16 Bongo ayambaki bana yango, na maboko na Ye, atielaki bango maboko mpe apambolaki bango. \s1 Bazwi mpe Bokonzi ya Nzambe \r (Mat 19.16-30; Lk 18.18-30) \p \v 17 Wana Yesu azalaki kokende, moto moko apotaki mbangu mpo na koya epai na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe atunaki : \pi1 — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ? \p \v 18 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe.\wj* \v 19 \wj Oyebi mibeko oyo : « Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okosalaka moninga mabe te, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »\wj* \p \v 20 Moto yango alobaki lisusu : \pi1 — Moteyi, natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai ! \p \v 21 Yesu atalaki ye, asepelaki na ye mingi mpe alobaki na ye : \pi1 \wj — Ozangi eloko moko kaka : kende, teka biloko na yo nyonso mpe pesa mbongo oyo okozwa epai ya babola ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.\wj* \p \v 22 Tango moto yango ayokaki bongo, alembaki nzoto mpe akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi. \p \v 23 Yesu atalaki bayekoli na Ye, alobaki na bango : \pi1 \wj — Ezali pasi mpo na bazwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !\wj* \p \v 24 Bayekoli bakamwaki mingi mpo na maloba na Ye. Kasi Yesu alobaki na bango lisusu : \pi1 \wj — Solo, bana na Ngai, ezali pasi\wj*\f + \fr 10.24 \fr*\ft Mikanda mosusu ya kala ebakisaka : « na ba-oyo batiaka mitema na bango mobimba na bomengo. »\ft*\f* \wj mpo na kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !\wj* \v 25 \wj Ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.\wj* \p \v 26 Bayekoli bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana : \pi1 — Bongo nani penza akoki kobikisama ? \p \v 27 Yesu atalaki bango mpe alobaki : \pi1 \wj — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, ekosalema penza ; pamba te nyonso ekoki kosalema na Nzambe.\wj* \p \v 28 Petelo alobaki na Yesu : \pi1 — Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo ! \p \v 29 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, bandeko na ye ya mibali mpe ya basi, mama na ye, tata na ye, bana na ye to bilanga na ye, mpo na Ngai mpe mpo na Sango Malamu,\wj* \v 30 \wj akozwa mbala nkama koleka, na tango oyo tozali kobika sik’oyo, bandako, bandeko ya mibali mpe ya basi, bamama, bana mpe bilanga, elongo na minyoko ; mpe na tango oyo ekoya, bomoi ya seko.\wj* \v 31 \wj Kasi kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.\wj* \s1 Yesu alobi lisusu na tina na kufa mpe lisekwa na Ye \r (Mat 20.17-19; Lk 18.31-34) \p \v 32 Wana bazalaki na nzela mpo na komata na Yelusalemi, Yesu azalaki kotambola liboso na bango. Bayekoli bazalaki na mawa, mpe bato mosusu oyo bazalaki kolanda bango bazalaki kobanga. \p Yesu abendaki lisusu na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe ayebisaki bango makambo oyo esengeli kokomela Ye : \pi1 \v 33 \wj — Tozali solo kokende na Yelusalemi ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko ; bakokatela Ye etumbu ya kufa mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano,\wj* \v 34 \wj bakoseka Ye, bakobwakela Ye soyi, bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye ; kasi, sima na mikolo misato, akosekwa.\wj* \s1 Jake mpe Yoane basengi esika ya lokumu \r (Mat 20.20-28; Lk 22.25-27) \p \v 35 Bongo Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye : \pi1 — Moteyi, tolingi ete osalela biso likambo oyo tokosenga Yo. \p \v 36 Yesu atunaki bango : \pi1 \wj — Bolingi ete nasalela bino nini ?\wj* \p \v 37 Bazongisaki : \pi1 — Pesa biso nzela ya kovanda kati na nkembo na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi. \p \v 38 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga ! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela to kozwa libatisi oyo Ngai nakozwa ?\wj* \p \v 39 Bazongisaki : \pi1 — Iyo, tokoki ! \p Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela mpe bokozwa na bino libatisi oyo Ngai nakozwa ;\wj* \v 40 \wj kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.\wj* \p \v 41 Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki Jake mpe Yoane. \v 42 Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Boyebi malamu ete bato oyo bamonanaka lokola bakonzi bakonzaka bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango.\wj* \v 43 \wj Esengeli te kozala bongo kati na bino ; nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ;\wj* \v 44 \wj mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu ya bino nyonso !\wj* \v 45 \wj Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye, kasi ayaki nde kosala mpo na bato mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.\wj* \s1 Yesu abikisi Bartime, mokufi miso \p \v 46 Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Jeriko. Tango bazalaki kobima wuta na engumba elongo na bato ebele, mokufi miso Bartime, mwana mobali ya Time, avandaki pembeni ya nzela mpe azalaki kosenga-senga. \v 47 Tango ayokaki ete Yesu ya Nazareti azali koleka, akomaki koganga : \pi1 — Yesu, mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! \p \v 48 Bato ebele bazalaki kopamela ye mpo ete akanga monoko na ye, kasi Bartime agangaki lisusu makasi : \pi1 — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! \p \v 49 Yesu atelemaki mpe alobaki : \pi1 \wj — Bobenga ye !\wj* \p Bato babengaki mokufi miso yango mpe balobaki na ye : \pi1 — Yika mpiko ! Telema ! Azali kobenga yo ! \p \v 50 Tango ayokaki maloba yango, abwakaki elamba na ye, atelemaki mpe apusanaki pene ya Yesu. \v 51 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Olingi nasala nini mpo na yo ?\wj* \p Mokufi miso azongisaki : \pi1 — Moteyi, nalingi komona. \p \v 52 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Kende, kondima na yo ebikisi yo.\wj* \m Mbala moko, akomaki komona mpe alandaki Yesu. \c 11 \s1 Yesu akoti na Yelusalemi \r (Mat 21.1-11; Lk 19.28-40; Yn 12.12-19) \p \v 1 Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi, bakomaki na Betifaje mpe Betani oyo ezalaki pene ya ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli na Ye mibale, \v 2 alobaki na bango : \pi1 \wj — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela ; bofungola yango mpe bomema yango awa.\wj* \v 3 \wj Soki moto moko atuni bino : « Mpo na nini bozali kofungola yango ? »\wj* \pi1 \wj Bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. »\wj* \pi1 Mpe na mbala moko, akotinda yango awa. \p \v 4 Bakendeki mpe bakutaki mwana ya ane ekangama na libanda, pembeni ya ekuke ; mpe bafungolaki yango. \v 5 Ndambo ya bato oyo bazalaki wana batunaki : \pi1 — Nini ezwi bino mpo ete bofungola mwana oyo ya ane ? \p \v 6 Bayekoli bazongiselaki bango ndenge kaka Yesu alobaki na bango, mpe bato yango batikaki bayekoli kokende elongo na yango. \v 7 Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango. \v 8 Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu batandaki bitape ya mobesu, oyo bawutaki kokata na likolo ya banzete kati na bilanga. \p \v 9 Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : \q1 « Ozana ! \b \q1 Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! \b \q1 \v 10 Tika ete bokonzi oyo eyei epambolama, \q2 bokonzi ya Davidi, tata na biso ! \b \q1 Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! » \p \v 11 Tango kaka Yesu akotaki na Yelusalemi, akendeki kati na Tempelo. Mpe kuna, atalaki na bokebi ndenge makambo nyonso ezalaki kosalema ; kasi lokola tango elekaki, abimaki mpe akendeki na Betani elongo na bayekoli na Ye zomi na mibale. \s1 Yesu alakeli nzete ya figi mabe \r (Mat 21.18-19) \p \v 12 Mokolo oyo elandaki, wana bazalaki kotika Betani, Yesu ayokaki nzala. \v 13 Na mosika, amonaki nzete moko ya figi etonda na makasa ; apusanaki pene na yango mpo na kotala soki ezali na mbuma. Kasi tango akomaki pene, amonaki kaka makasa mpo ete ezalaki eleko ya bambuma ya figi te. \v 14 Yesu alobaki na nzete yango : \wj « Tika ete, mpo na libela, moto moko te alia lisusu mbuma kowuta na yo ! »\wj* \p Bayekoli na Ye bayokaki Ye koloba maloba yango. \s1 Yesu kati na tempelo \r (Mat 21.12-17; Lk 19.45-48; Tala Yn 2.13-16) \p \v 15 Tango bakomaki na Yelusalemi, Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo mpe akomaki kobengana bato oyo bazalaki koteka mpe kosomba kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga ; \v 16 mpe apesaki nzela te na bato oyo bazalaki kotambola kati na lopango ya tempelo ete bamema biloko. \p \v 17 Bongo akomaki koteya bango : \wj « Boni, ekomama te : ‹ Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso ? › Kasi bino, bokomisaki yango penza nganda ya miyibi ! »\wj* \p \v 18 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bayokaki makambo yango mpe bakomaki koluka nzela ya koboma Ye ; bazalaki kobanga Ye, pamba te ebele ya bato bazalaki kokamwa malakisi na Ye. \p \v 19 Tango pokwa ekomaki, Yesu mpe bayekoli na Ye babimaki na engumba. \s1 Nguya ya kondima \r (Mat 21.20-22) \p \v 20 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, wana bazalaki koleka, bamonaki ete nzete ya figi ekawuki kino na misisa. \p \v 21 Petelo akanisaki likambo oyo esalemaki mpe alobaki na Yesu : \pi1 — Moteyi, tala ! Nzete ya figi oyo olakelaki mabe ekawuki ! \p \v 22 Yesu alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Bozala na kondima kati na Nzambe.\wj* \v 23 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : soki moto alobi na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale ; » soki atie tembe te kati na motema na ye, kasi andimi ete makambo oyo alobi ekosalema, solo, akomona yango kokokisama.\wj* \v 24 \wj Yango wana nazali koloba na bino : eloko nyonso oyo bokosenga wana bozali kosambela, bondima ete bosili kozwa yango mpe bokomona yango kokokisama.\wj* \pi1 \v 25 \wj Mpe tango botelemaka mpo na kosambela, soki bozali na likambo oyo bozwaki na yango moto songolo, bolimbisa ye mpo ete Tata na bino, oyo azali na Likolo alimbisa mpe masumu na bino.\wj* [ \v 26 \wj Kasi soki bolimbisi te, Tata na bino oyo azali kati na Likolo mpe akolimbisa masumu na bino te.\wj*]\f + \fr 11.26 \fr*\ft Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.\ft*\f* \s1 Batelemeli bokonzi ya Yesu \r (Mat 21.23-27; Lk 20.1-8) \p \v 27 Bakendeki lisusu na Yelusalemi. Wana Yesu azalaki kotambola kati na lopango ya Tempelo, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye : \pi1 \v 28 — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Mpe nani apesi Yo bokonzi ya kosala yango ? \p \v 29 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Nazali kotuna bino motuna moko kaka. Bopesa Ngai nanu eyano, bongo Ngai nakoyebisa bino soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.\wj* \v 30 \wj Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ? Boyebisa Ngai !\wj* \p \v 31 Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : « Soki tolobi ete ewutaki na Nzambe, akotuna biso lisusu : bongo mpo na nini bondimaki ye te ? \v 32 Soki mpe tolobi ete ewutaki na bato, wana… » \p Solo, bazalaki kobanga bato, pamba te bato nyonso bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli. \v 33 Boye, bazongiselaki Yesu : \pi1 — Toyebi te ! \p Yesu mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.\wj* \c 12 \s1 Lisese ya basali mabe na elanga ya vino \r (Mat 21.33-46; Lk 20.9-19) \p \v 1 Bongo Yesu akomaki koloba na bango na masese : \pi1 \wj — Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.\wj* \v 2 \wj Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga, mpo ete akende kokongola epai na bango ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino.\wj* \v 3 \wj Kasi bafuteli elanga bakangaki ye, babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.\wj* \v 4 \wj Atindelaki bango mosali mosusu ; babetaki-betaki ye na moto mpe basambwisaki ye.\wj* \v 5 \wj Atindaki lisusu mosali mosusu ; oyo wana, babomaki ye. Bongo, na sima, atindaki lisusu bato ebele ; kasi babetaki bamoko, mpe babomaki bamosusu.\wj* \pi1 \v 6 \wj Nkolo elanga atikalaki kaka na moto moko ya kotinda : mwana na ye ya bolingo. Atindaki ye na suka na bango nyonso mpe amilobelaki : « Solo, bakotosa mwana na ngai. »\wj* \v 7 \wj Kasi bafuteli elanga balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! »\wj* \v 8 \wj Bakangaki ye, babomaki ye mpe babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino.\wj* \pi1 \v 9 \wj Boye, nkolo elanga ya vino akosala nini ? Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga wana mpe akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu.\wj* \v 10 \wj Nanu botanga Makomi oyo te :\wj* \q1 \wj « Libanga oyo batongi ndako babwakaki\wj* \q2 \wj ekomi libanga ya songe ya ndako,\wj* \q2 mpe esimbi ndako mobimba ? \q1 \v 11 \wj Ezali Nkolo nde alingaki bongo,\wj* \q2 \wj mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso ! »\wj* \p \v 12 Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato bazalaki koluka nzela ya kokanga Yesu, pamba te basosolaki ete alobaki lisese wana mpo na bango. Kasi lokola babangaki bato, batikaki Ye ; mpe moto na moto akendeki. \s1 Eyano ya Yesu na tina na mpako ya mokonzi \r (Mat 22.15-22; Lk 20.20-26) \p \v 13 Sima, batindelaki Yesu ndambo ya Bafarizeo mpe ndambo ya bato ya lisanga ya Erode mpo na koluka kokanga Ye na motambo ya maloba na Ye moko. \v 14 Tango bakomaki epai na Ye, balobaki : \pi1 — Moteyi, toyebi ete ozali moto ya sembo mpe obangaka bato te, pamba te oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. Boni, Mobeko na biso epesi solo nzela ya kofuta mpako ya Sezare to te ? Tosengeli penza kofuta yango ? \p \v 15 Kasi lokola Yesu ayebaki ete bazali bato ya bilongi mibale, alobaki na bango : \pi1 \wj — Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ? Bomemela Ngai mbongo moko ya ebende, mpo ete namona yango.\wj* \m \v 16 Bamemelaki Ye yango, mpe atunaki bango : \pi1 \wj — Elilingi ya nani mpe makomi ya nani bozali komona awa ?\wj* \p Bazongisaki : \pi1 — Ya Sezare. \p \v 17 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !\wj* \p Bakamwaki mingi eyano ya Yesu. \s1 Eyano ya Yesu na tina na lisekwa \r (Mat 22.23-33; Lk 20.27-40) \p \v 18 Bongo Basaduseo, ba-oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye : \pi1 \v 19 — Moteyi, Moyize akomaki mpo na biso ete soki ndeko mobali ya moto moko akufi mpe atiki mwasi, kasi aboti na ye bana te, moto wana asengeli kobala mwasi oyo ndeko na ye atiki mpo ete abotela ndeko yango bana. \v 20 Nzokande, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki, kasi abotaki bana te. \v 21 Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka ; kasi ye mpe akufaki, atikalaki kobota bana te. Esalemaki kaka bongo na ndeko ya misato kino na oyo ya sambo : \v 22 bandeko nyonso sambo batikalaki kobota bana te. Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki. \v 23 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye ? \p \v 24 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.\wj* \v 25 \wj Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.\wj* \v 26 \wj Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te kati na buku ya Moyize, makambo oyo Nzambe alobaki na ye na tina na nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te : « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? »\wj* \v 27 \wj Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi. Bozali penza kati na libunga monene.\wj* \s1 Mobeko oyo eleki monene \r (Mat 22.34-40; Lk 10.25-28) \p \v 28 Moko kati na balakisi ya Mobeko, oyo ayokaki bango kotiana tembe mpe amonaki ete Yesu azongiselaki bango biyano ya malamu, apusanaki pene na Yesu mpe atunaki : \pi1 — Mobeko nini eleki monene kati ya mibeko nyonso ? \p \v 29 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Tala Mobeko oyo eleki monene : « Isalaele, yoka malamu ! Yawe azali Nzambe na biso, Yawe azali kaka moko.\wj* \v 30 \wj Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso. »\wj* \v 31 \wj Tala mobeko oyo elandi : « Okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. » Mobeko ya motuya koleka mibeko wana mibale ezali te.\wj* \p \v 32 Bongo molakisi ya Mobeko alobaki na ye : \pi1 — Moteyi, olobi malamu ; olobi solo ete Nzambe azali kaka moko, mosusu azali te. \v 33 Kolinga Ye na motema na yo mobimba, na mayele na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso, mpe kolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka, yango nde ezali na tina mingi koleka bambeka ya kotumba mpe makabo nyonso. \p \v 34 Tango Yesu amonaki ete molakisi ya Mobeko azongisi eyano na ndenge ya mayele, alobaki na ye : \pi1 \wj — Ozali mosika te ya Bokonzi ya Nzambe.\wj* \p Mpe moto ata moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna. \s1 Eyano ya Yesu na tina na bomoto ya Klisto \r (Mat 22.41-46; Lk 20.41-44) \p \v 35 Wana Yesu azalaki koteya kati na lopango ya Tempelo, atunaki : \pi1 \wj — Ndenge nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Klisto azali Mwana ya Davidi ?\wj* \v 36 \wj Pamba te Davidi, ye moko, alobaki boye na nzela ya Molimo Mosantu :\wj* \q1 \wj « Yawe alobaki na Nkolo na ngai :\wj* \q1 \wj ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali\wj* \q2 \wj kino natia banguna na Yo\wj* \q2 \wj na se ya matambe na Yo. › »\wj* \pi1 \v 37 \wj Soki ye moko Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?\wj* \p Ebele ya bato bazalaki koyoka Ye na esengo. \s1 Yesu atelemeli balakisi ya Mobeko \r (Mat 23.1-12; Lk 20.45-47) \p \v 38 Wana azalaki koteya, Yesu alobaki : \pi1 \wj — Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ;\wj* \v 39 \wj balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ;\wj* \v 40 \wj bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.\wj* \s1 Likabo ya mwasi mobola \r (Lk 21.1-4) \p \v 41 Yesu avandaki liboso ya kitunga ya makabo mpe azalaki kotala ndenge bato bazalaki kotia mbongo kati na kitunga ya makabo. Bazwi ebele bazalaki kotia mbongo ebele. \v 42 Mwasi mobola moko akufisa mobali ayaki mpe atiaki mbongo mibale ya bibende, oyo ezalaki na motuya moke penza. \p \v 43 Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso oyo bawuti kotia mbongo kati na kitunga ya makabo.\wj* \v 44 \wj Pamba te bato nyonso bazwi kati na mbongo oyo bazali na yango na tina te, mpo na kotia kati na kitunga ya makabo ; kasi ye, kati na kokelela na ye, atie bozwi na ye nyonso, nyonso oyo azalaki na yango mpo na kobika na yango.\wj* \c 13 \s1 Yesu asakoli pasi mpo na Yelusalemi \r (Mat 24.1-3; Lk 21.5-7) \p \v 1 Wana Yesu azalaki kobima longwa na Tempelo, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye : \pi1 — Moteyi, tala ndenge mabanga oyo ezali kitoko ! Tala ndenge Ndako oyo ezali monene ! \p \v 2 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Ozali komona bandako minene oyo ! Libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu, nyonso ekobukama.\wj* \p \v 3 Bongo Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, oyo etalana na Tempelo. \p Petelo, Jake, Yoane mpe Andre batunaki Yesu, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : \pi1 \v 4 — Yebisa biso, makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango nyonso ekomi pene ya kokokisama ? \p \v 5 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bosala keba ete moto moko te akosa bino !\wj* \v 6 \wj Bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.\wj* \pi1 \v 7 \wj Tango bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.\wj* \v 8 \wj Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, mabele ekoningana bipai na bipai, mpe nzala ekozala makasi penza. Makambo wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.\wj* \pi1 \v 9 \wj Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako ya mayangani. Likolo na Ngai, bokosamba liboso ya bayangeli mpe liboso ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai.\wj* \v 10 \wj Pamba te esengeli ete Sango Malamu esakolama liboso epai ya bikolo nyonso ya mokili.\wj* \v 11 \wj Tango bakokanga bino mpo na komema bino na bisambiselo, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba ; boloba kaka oyo ekopesamela bino na tango wana, pamba te ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo Mosantu.\wj* \v 12 \wj Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye mpo ete baboma ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.\wj* \v 13 \wj Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.\wj* \pi1 \v 14 \wj Tango bokomona makambo ya nkele kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu— wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ;\wj* \v 15 \wj tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye ;\wj* \v 16 \wj tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye !\wj* \v 17 \wj Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele !\wj* \v 18 \wj Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi.\wj* \v 19 \wj Pamba te ekozala mikolo ya pasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta Nzambe akela mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.\wj* \pi1 \v 20 \wj Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.\wj* \v 21 \wj Na tango wana, soki moto moko alobi na bino : « Klisto azali awa ! » to « Azali kuna, » bondima ye te.\wj* \v 22 \wj Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.\wj* \v 23 \wj Boye bino, bosala keba ! Ngai, namiyebiseli bino makambo nyonso.\wj* \pi1 \v 24 \wj Kasi na mikolo yango, sima na pasi wana,\wj* \q1 \wj « moyi ekokoma molili,\wj* \q2 \wj sanza ekongenga lisusu te,\wj* \q1 \v 25 \wj minzoto ekokweya longwa na Likolo,\wj* \q2 \wj mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »\wj* \pi1 \v 26 \wj Bongo, bato bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya monene mpe na nkembo.\wj* \v 27 \wj Akotinda ba-anjelu na Ye mpe akosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili, longwa na suka ya mabele kino na suka ya Likolo.\wj* \pi1 \v 28 \wj Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino : soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.\wj* \v 29 \wj Ndenge moko mpe mpo na bino ; tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba.\wj* \v 30 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.\wj* \v 31 \wj Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.\wj* \v 32 \wj Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana ; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.\wj* \pi1 \v 33 \wj Bosala keba ! Bosenzela ! Pamba te boyebi te tango nini ngonga yango ekoya.\wj* \pi1 \v 34 \wj Ekozala lokola moto oyo akei na mobembo, bongo atiki ndako na ye mpe apesi mokumba na yango epai ya basali na ye ; apesi na mosali moko na moko mosala oyo ekoki na ye mpe apesi mitindo epai ya mokengeli ekuke ete akengela malamu.\wj* \v 35 \wj Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te tango nini nkolo ndako akozonga : na pokwa to na midi ya butu to tango soso elelaka to mpe na tongo.\wj* \v 36 \wj Pamba te soki ayei na mbalakata, asengeli te kokuta bino bolali pongi.\wj* \v 37 \wj Makambo oyo nalobi na bino, nazali koloba yango mpe na bato nyonso : Bosenzela.\wj* \c 14 \ms1 Kufa mpe lisekwa ya Yesu \s1 Bakani Koboma Yesu \r (Mat 26.1-5; Lk 22.1-2; Yn 11.45-53) \p \v 1 Wana etikalaki mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire ebanda, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini kokanga Yesu na mayele mpo na koboma Ye ; \v 2 pamba te balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. » \s1 Basopeli Yesu malasi na Betani \r (Mat 26.6-13; Yn 12.1-8) \p \v 3 Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, mwasi moko akotaki, wana Yesu azalaki na mesa. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya nar, oyo basangisa na eloko mosusu te mpe ya motuya makasi ; afungolaki molangi yango mpe asopaki malasi yango na moto ya Yesu. \v 4 Kati na bato oyo bazalaki wana, bamosusu basilikaki mpe balobaki : \pi1 — Mpo na nini kobebisa malasi oyo na pamba kaka boye ? \v 5 Bakokaki ata koteka malasi yango na motuya ya mbongo ya bibende koleka nkama misato mpe kopesa mbongo yango epai ya babola ! \p Bazalaki kopamela mwasi yango makasi. \p \v 6 Kasi Yesu alobaki : \pi1 \wj — Botika ye ! Mpo na nini kotungisa ye ? Asali Ngai likambo moko ya malamu.\wj* \v 7 \wj Bokozalaka na babola tango nyonso mpe bokoki tango nyonso kosalelaka bango bolamu oyo bolingi ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.\wj* \v 8 \wj Mwasi oyo asali likambo oyo akoki, asili kosopela nzoto na Ngai malasi mpo na kobongisa kokundama na Ngai.\wj* \v 9 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : Esika nyonso bakosakola Sango Malamu kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.\wj* \s1 Yuda ateki Yesu \r (Mat 26.14-16; Lk 22.3-6) \p \v 10 Bongo Yuda Isikarioti, moko kati na bantoma zomi na mibale, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpo na koteka Yesu epai na bango. \v 11 Tango bayokaki bongo, basepelaki makasi mpe balakaki kopesa ye mbongo. Boye, Yuda akomaki koluka libaku ya kokaba Yesu. \s1 Yesu mpe bantoma balie bilei ya Pasika \r (Mat 26.17-19; Lk 22.7-18) \p \v 12 Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo bazalaki koboma mwana meme lokola mbeka ya Pasika, bayekoli batunaki Ye : \pi1 — Esika nini olingi ete tokende kobongisela Yo bilei ya Pasika ? \p \v 13 Bongo, kati na bayekoli na Ye, Yesu atindaki mibale ; alobaki na bango : \pi1 \wj — Bokende kati na engumba, bokokutana na moto moko amemi eloku ya mayi ; bolanda ye\wj* \v 14 \wj mpe, tango akokota na ndako, boloba na nkolo ndako yango : « Moteyi azali kotuna yo : ‹ Wapi shambre na Ngai epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »\wj* \pi1 \v 15 \wj Bongo ye akolakisa bino, na etaje ya suka, shambre moko ya monene, babongisa malamu mpe bakoki kosalela yango. Ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika mpo na biso.\wj* \p \v 16 Tango bayekoli bakendeki, bakotaki na engumba mpe bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango. Bongo babongisaki bilei ya Pasika. \r (Mat 26.20-25; Lk 22.14; Yn 13.21-30) \p \v 17 Tango pokwa ekomaki, Yesu ayaki elongo na bayekoli zomi na mibale. \v 18 Wana bazalaki na mesa mpe bazalaki kolia, Yesu alobaki : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino, oyo azali kolia elongo na Ngai, akoteka Ngai.\wj* \p \v 19 Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga : \pi1 — Ezali ngai ? \p \v 20 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Ezali moko kati na bino, zomi na mibale, oyo azali kolia sani moko elongo na Ngai.\wj* \v 21 \wj Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.\wj* \r (Mat 26.26-30; Lk 22.15-20; tala 1Kl 11.23-25) \p \v 22 Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango, apesaki bango yango mpe alobaki : \pi1 \wj — Oyo ezali nzoto na Ngai ! Bozwa.\wj* \p \v 23 Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango, mpe bango nyonso bamelaki yango. \v 24 Bongo alobaki na bango : \pi1 \wj — Oyo ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele.\wj* \v 25 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, kati na Bokonzi ya Nzambe.\wj* \p \v 26 Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive. \s1 Yesu asakoli ete Petelo akowangana Ye \r (Mat 26.31-35; Lk 22.31-34; Yn 13.36-38) \p \v 27 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bino nyonso bokobungisa kondima, pamba te ekomama : « Nakobeta mobateli bibwele, mpe bameme ekopalangana. »\wj* \pi1 \v 28 \wj Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.\wj* \p \v 29 Petelo alobaki na Ye : \pi1 — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te. \p \v 30 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato.\wj* \p \v 31 Kasi Petelo akobaki kotia monoko makasi, alobaki : \pi1 — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana yo te. \p Mpe bango nyonso balobaki kaka ndenge moko. \s1 Yesu abondeli na Getisemane \r (Mat 26.36-46; Lk 22.40-46) \p \v 32 Tango bakomaki na esika oyo kombo na yango ezali Getisemane, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Botikala awa, wana Ngai nakosambela.\wj* \p \v 33 Wana amemaki Petelo, Jake mpe Yoane, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ; \v 34 alobaki na bango : \pi1 \wj — Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa ; botikala awa mpe bosenzela.\wj* \p \v 35 Wana akendeki mwa mosika, amikitisaki na mabele mpe azalaki kosambela Nzambe mpo ete, soki ekoki kosalema, tango wana ya pasi ekende mosika na Ye. \v 36 Azalaki kobondela : \pi1 \wj — Tata ! Epai na Yo, nyonso ekoki kosalema ! Longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.\wj* \p \v 37 Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi. \p Alobaki na Petelo : \pi1 \wj — Simona, ozali kolala ? Okokaki te kosenzela mpo na ngonga moko ?\wj* \v 38 \wj Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.\wj* \p \v 39 Akendeki lisusu mwa mosika mpe abondelaki kaka ndenge moko. \v 40 Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo. Bayebaki te eyano ya kopesa Ye. \p \v 41 Azongaki mpo na mbala ya misato, mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Esili ! Ngonga ekoki. Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.\wj* \v 42 \wj Botelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.\wj* \s1 Bakangi Yesu \r (Mat 26.47-56; Lk 22.47-53; Yn 18.2-11) \p \v 43 Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato nde batindaki bango. \v 44 Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokokanga ye mpe bokomema ye na se ya bokengeli malamu. » \p \v 45 Tango kaka Yuda akomaki, akendeki epai ya Yesu mpe alobaki na Ye : \pi1 — Moteyi ! \p Mpe apesaki Ye beze. \p \v 46 Mbala moko, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye. \v 47 Bongo moko kati na bato oyo bazalaki wana abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi. \p \v 48 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ?\wj* \v 49 \wj Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali kosalema bongo mpo ete Makomi ekokisama.\wj* \p \v 50 Bayekoli na Ye nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki. \p \v 51 Nzokande, elenge mobali moko azalaki kolanda Yesu ; alataki liputa ya pamba. Mpe tango bakangaki ye, \v 52 asundolaki liputa mpe akimaki. \s1 Basambisi Yesu \r (Mat 26.57-68; Lk 22.54-55, 63-71; Yn 18.12-14, 19-24) \p \v 53 Bamemaki Yesu epai ya mokonzi ya Banganga-Nzambe epai wapi bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato mpe balakisi ya Mobeko, bango nyonso, basanganaki. \v 54 Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino kati na lopango ya ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; avandaki kuna elongo na bakengeli, pene ya moto, mpe azalaki koyetola moto. \v 55 Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa, kasi bazalaki kozwa yango te ; \v 56 pamba te bato mingi bazalaki kokosela Ye makambo, kasi matatoli na bango ezalaki kokokana te. \p \v 57 Mpo na kaka kokosela Ye makambo, bato mosusu bazalaki kotelema na koloba : \v 58 « Toyokaki ye koloba : ‹ Ngai, nakobuka Tempelo oyo esalema na maboko ya bato ; mpe sima na mikolo misato, nakotonga Tempelo mosusu oyo ekosalema na maboko ya bato te. › » \p \v 59 Kasi atako bongo, litatoli na bango ezalaki kaka ya lokuta. \p \v 60 Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki kati na mayangani mpe apesaki Yesu motuna : \pi1 — Boni, ozali te na liloba ya kozongisa ? Olobi nini liboso ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango ? \p \v 61 Kasi Yesu abatelaki kimia mpe apesaki ata eyano moko te. \p Mokonzi ya Banganga-Nzambe atunaki Ye lisusu : \pi1 — Ozali Klisto, Mwana ya Ye oyo apambolama ? \p \v 62 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Iyo, ezali se bongo. Mpe bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya elongo na mapata ya Likolo.\wj* \p \v 63 Bongo mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : \pi1 — Mpo na nini koluka lisusu batatoli ? \v 64 Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe. Bokanisi nini mpo na yango ? \p Boye, bango nyonso bakatelaki Yesu etumbu, batatolaki ete abongi na kufa. \v 65 Bato mosusu bakomaki kobwakela Ye soyi, kozipa Ye elongi, kobeta Ye makofi na koloba na Ye : \pi1 — Sakola ! \p Mpe bakengeli bazwaki Ye mpe babetaki Ye bambata. \s1 Petelo awangani Yesu \r (Mat 26.69-75; Lk 22.56-62; Yn 18.15-18, 25-27) \p \v 66 Wana Petelo azalaki na se, kati na lopango ya kati, mwasi mosali moko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ayaki wana, \v 67 amonaki Petelo koyetola moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki na ye : \pi1 — Yo mpe ozalaki elongo na Yesu, moto ya Nazareti ! \p \v 68 Kasi Petelo awanganaki ; alobaki : \pi1 — Nayebi te ! Nazali kutu kososola te makambo oyo ozali koloba ! \p Bongo abimaki mpe akendeki kotelema pembeni, na ekuke ya lopango ; mpe soso elelaki\f + \fr 14.68 \fr*\ft Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu.\ft*\f*. \p \v 69 Tango mwasi mosali amonaki ye, alobaki lisusu na bato oyo bazalaki wana : \pi1 — Moto oyo azali moko kati na bango ! \p \v 70 Petelo awanganaki lisusu. \p Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bazongelaki koloba na Petelo : \pi1 — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bango, mpe ozali moto ya Galile. \p \v 71 Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe : \pi1 — Nayebi te moto oyo bozali kolobela ! \p \v 72 Kaka na tango yango, soso elelaki mpo na mbala ya mibale. Bongo Petelo akanisaki maloba oyo Yesu alobaki na ye : \wj « Liboso ete soso elela mbala mibale, okowangana Ngai mbala misato. »\wj* Mpe alelaki makasi. \c 15 \s1 Yesu asambi liboso ya Pilato \r (Mat 27.11-26; Lk 21.1-5, 13-25; Yn 18.28-40; 19.4-16) \p \v 1 Tango tongo etanaki, bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya bato, balakisi ya Mobeko mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda basanganaki mpo na kokata likambo. Bakangaki Yesu na basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya Pilato. \p \v 2 Pilato atunaki Yesu : \pi1 — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? \p Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Olobi yango.\wj* \p \v 3 Bakonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki kofunda Ye na makambo ebele. \p \v 4 Pilato atunaki Ye lisusu : \pi1 — Boni, ozali te na eyano ya kopesa, na makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda yo ? \p \v 5 Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te ; mpe Pilato akamwaki makasi. \v 6 Na feti nyonso ya Pasika, azalaki kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kosenga. \v 7 Na tango wana, moto oyo bazalaki kobenga « Barabasi » azalaki kati na boloko elongo na batomboki oyo bayeisaki mobulu kati na engumba mpe babomaki moto. \v 8 Ebele ya bato bayaki mpe basengaki na Pilato ete asalela bango makambo oyo amesana kosalela bango mbala na mbala. \p \v 9 Pilato atunaki : \pi1 — Bolingi nabimisela bino mokonzi ya Bayuda ? \p \v 10 Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakonzi ya Banganga-Nzambe bakabaki Yesu na maboko na ye. \v 11 Bakonzi ya Banganga-Nzambe batindikaki ebele ya bato mpo ete basenga na Pilato ete abimisela bango Barabasi longwa na boloko. \p \v 12 Pilato atunaki bango : \pi1 — Nasala nini na moto oyo bozali kobenga mokonzi ya Bayuda ? \p \v 13 Bagangaki lisusu : \pi1 — Baka ye na ekulusu ! \p \v 14 Pilato atunaki bango lisusu : \pi1 — Mabe nini asali ? \p Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka : \pi1 — Baka ye na ekulusu ! \p \v 15 Lokola Pilato alingaki kosepelisa ebele ya bato, abimiselaki bango Barabasi longwa na boloko. Sima na kobetisa Yesu fimbu, Pilato apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. \s1 Basoda batioli Yesu \r (Mat 27.27-31; Yn 19.2-3) \p \v 16 Basoda bakumbaki Yesu kati na ndako ya moyangeli, na esambiselo, mpe basangisaki lisanga mobimba ya basoda. \v 17 Balatisaki Yesu nzambala ya motane mpe ekoti oyo basalaki na banzube ; \v 18 mpe babandaki kopesa ye mbote : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! » \p \v 19 Bazalaki kosalela lingenda moke mpo na kobeta Ye na moto, bazalaki kobwakela Ye soyi mpe kofukama mpo na kogumbama liboso na Ye. \p \v 20 Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala ya motane, balatisaki Ye lisusu bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu. \p \v 21 Bakangaki na makasi moleki nzela moko oyo awutaki na bilanga, mpo ete amema ekulusu ya Yesu ; kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene mpe tata ya Alekizandre mpe Rifisi. \v 22 Bamemaki Yesu na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba : esika ya mokuwa ya moto, \v 23 bapesaki Ye masanga ya vino basangisa na mire, kasi amelaki yango te. \v 24 Babakaki Ye na ekulusu, mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke mpo na koyeba oyo moko na moko akozwa. \p \v 25 Babakaki Ye na ekulusu na ngonga ya libwa ya tongo. \p \v 26 Tala makomi oyo ezalaki kotalisa mpo na nini bakatelaki Ye etumbu : \pc Mokonzi ya Bayuda. \p \v 27 Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. [ \v 28 Ezali boye nde ekokisamaki Makomi oyo ezali koloba : « Batangaki Ye na molongo ya bato ya mabe. »]\f + \fr 15.28 \fr*\ft Eteni oyo ezali te kati na mikanda mingi ya kala.\ft*\f* \p \v 29 Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ; bazalaki koloba : \pi1 — Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato, \v 30 mibikisa yo moko mpe kita longwa na ekulusu ! \p \v 31 Bakonzi ya Banganga-Nzambe elongo na balakisi ya Mobeko bazalaki mpe kotiola kati na bango : \pi1 — Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te ! \v 32 Tika ete Klisto, Mokonzi ya Isalaele, akita sik’oyo longwa na ekulusu, mpo ete tomona mpe tondima ! \p Bato oyo babakamaki elongo na Yesu na ba-ekulusu bazalaki mpe kofinga Ye. \r (Mat 27.45-56; Lk 23.44-49; Yn 19.25-30) \p \v 33 Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba. \p \v 34 Na ngonga yango ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : \pi1 \tl \+wj — Eloi, Eloi, lema sabachtani ?\+wj*\tl* \m Elingi koloba : \wj « Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ? »\wj* \p \v 35 Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Yesu ; boye bakomaki koloba : \pi1 — Boyoka, azali kobenga Eliya ! \p \v 36 Moto moko akimaki mbangu, azindisaki eponze moko na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela ; alobaki : \pi1 — Totala soki Eliya akoya kokitisa ye. \p \v 37 Kasi Yesu agangaki makasi mpe akataki motema. \p \v 38 Rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se. \p \v 39 Mpe tango mokonzi ya basoda ya Rome, oyo atelemaki liboso ya Yesu, amonaki ndenge Yesu akufaki, alobaki : \pi1 — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe ! \p \v 40 Ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kotala na mosika. Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake oyo ya elenge, ya Joze mpe ya Salome ; \v 41 oyo bazalaki kolanda Yesu mpe kosunga Ye tango azalaki kati na Galile ; ezalaki mpe na basi mosusu ebele oyo bakendeki na Yelusalemi elongo na Yesu. \s1 Bakundi Yesu \r (Mat 27.57-61; Lk 23.50-56; Yn 19.38-42) \p \v 42 Wana pokwa ekomaki, lokola ezalaki mokolo ya komilengela mpo ete etikalaki ngonga moke mpo na kokota na mokolo ya Saba, \v 43 Jozefi, moto ya mboka Arimate, oyo azalaki moto ya lokumu kati na Likita-Monene ya Bayuda mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe, abangaki te kokende epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu. \v 44 Pilato akamwaki tango ayokaki ete Yesu asilaki kokufa ; abengaki mokonzi ya basoda mpo na kotuna ye soki solo Yesu asilaki kokufa. \v 45 Tango ayokaki na monoko ya mokonzi ya basoda ete ezali bongo, apesaki Jozefi ndingisa ya kokamata nzoto ya Yesu. \v 46 Jozefi asombaki liputa ya lino, akitisaki nzoto ya Yesu longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa yango ; atiaki nzoto yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene, mpe atindikaki libanga mosusu liboso ya ekotelo ya kunda yango. \p \v 47 Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Joze, bazalaki kotala esika oyo akotia nzoto ya Yesu. \c 16 \s1 Yesu Asekwi \r (Mat 28.1-8; Lk 24.1-11; Yn 20.1-2) \p \v 1 Tango mokolo ya Saba elekaki, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari, mama ya Jake mpe Salome, basombaki mafuta ya solo kitoko mpo na kokende kokawusa nzoto ya Yesu mpo ete ebeba te. \v 2 Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, wana moyi ebandi kobima, bakendeki na kunda. \v 3 Bazalaki kotunana kati na bango : \pi1 — Nani akotindikela biso libanga mpo ete elongwa na ekotelo ya kunda ? \p \v 4 Mpe tango batombolaki miso, bamonaki ete libanga esilaki kotindikama mpe ezalaki lisusu te na ekotelo ya kunda ; nzokande, libanga yango ezalaki ya monene penza. \p \v 5 Sima na bango kokota kati na kunda, bamonaki elenge mobali moko, avandi na ngambo ya loboko ya mobali, alata nzambala ya pembe ; somo ekangaki bango. \p \v 6 Kasi alobaki na bango : \pi1 — Bobanga te ! Bozali koluka Yesu ya Nazareti, oyo babakaki na ekulusu ? Azali awa te, asili kosekwa. Botala esika oyo batiaki Ye. \v 7 Bokende sik’oyo koyebisa Petelo mpe bayekoli mosusu : « Akei liboso na bino, na Galile ; ezali kuna nde bokomona Ye, ndenge kaka ayebisaki bino. » \p \v 8 Babimaki na lombangu mpe bakimaki mosika ya kunda ya Yesu, pamba te bango nyonso bazalaki kolenga na somo, mpe makanisi na bango epalanganaki. Balobaki eloko te na moto nyonso, pamba te bazalaki kobanga. \s1 Yesu amonani epai ya bayekoli na Ye \p \v 9 Na tongo ya mokolo ya liboso ya poso, tango Yesu asekwaki, abimelaki liboso Mari, moto ya mboka Magidala, oyo, kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo. \v 10 Bongo Mari akendeki koyebisa bato oyo batambolaki elongo na Yesu ; akutaki bango batondi na mawa mpe bazali kolela. \v 11 Kasi tango bayokaki ye koloba : « Yesu azali na bomoi, awuti kobimela ngai, » bandimaki ye te. \p \v 12 Sima na yango, Yesu abimelaki mibale kati na bango na lolenge mosusu, wana bazalaki kokende na mboka. \v 13 Bazongaki mpe bayebisaki yango epai ya bayekoli mosusu ; kasi bayekoli yango bandimaki bango te. \p \v 14 Sima na yango, abimelaki bantoma zomi na moko, wana bazalaki kolia, mpe apamelaki bango mpo ete bazalaki na kondima te, mpe mpo ete bazalaki mitema mabanga ; pamba te bandimaki te bato oyo bamonaki Ye sima na lisekwa na Ye. \v 15 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Bokende na mokili mobimba, mpe boteya bato nyonso Sango Malamu.\wj* \v 16 \wj Moto oyo akondima mpe akozwa libatisi akobika, kasi moto oyo akondima te akozwa etumbu.\wj* \v 17 \wj Tala bilembo oyo ekolanda bato oyo bakondima : na Kombo na Ngai, bakobengana milimo mabe ; bakoloba nkota ya sika,\wj* \v 18 \wj bakokanga banyoka na maboko na bango ; mpe soki bameli ngenge, ekosala bango pasi ata moke te ; bakotiela babeli maboko, mpe babeli bakobika na bokono na bango.\wj* \s1 Yesu amemami na likolo \p \v 19 Sima na Nkolo Yesu koloba na bango, amemamaki kati na Likolo mpe avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe. \v 20 Bayekoli bakendeki koteya na bisika nyonso. Nkolo azalaki kosala elongo na bango mpe azalaki kokokisa liloba na Ye na nzela ya bilembo ya kokamwa oyo ezalaki kolanda liloba na Ye.