\id MAT Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Matayo \toc1 Sango Malamu kolanda Matayo \toc2 Matayo \toc3 Mat \mt2 Sango Malamu kolanda \mt1 Matayo \c 1 \ms1 Mbotama mpe bomwana ya Yesu \s1 Molongo ya mbotama ya Yesu \li4 \v 1 Tala molongo ya mbotama ya Yesu-Klisto, mokitani ya Davidi mpe ya Abrayami : \b \li1 \v 2 Abrayami abotaki Izaki ; \li1 Izaki abotaki Jakobi ; \li1 Jakobi abotaki Yuda mpe bandeko na ye ya mibali ; \li1 \v 3 Yuda abotaki Peretsi mpe Zera na nzela ya Tamari, mwasi na ye ; \li1 Peretsi abotaki Etsironi ; \li1 Etsironi abotaki Arami ; \li1 \v 4 Arami abotaki Aminadabi ; \li1 Aminadabi abotaki Nashoni, \li1 mpe Nashoni abotaki Salima ; \li1 \v 5 Salima abotaki Boazi na nzela ya Raabi, mwasi na ye ; \li1 Boazi abotaki Obedi na nzela ya Rite, mwasi na ye ; \li1 Obedi abotaki Izayi, \li1 \v 6 mpe Izayi abotaki mokonzi Davidi. \b \li1 Davidi abotaki Salomo na nzela ya mwasi ya Uri ; \li1 \v 7 Salomo abotaki Roboami ; \li1 Roboami abotaki Abiya ; \li1 Abiya abotaki Asa ; \li1 \v 8 Asa abotaki Jozafati ; \li1 Jozafati abotaki Yorami ; \li1 Yorami abotaki Oziasi ; \li1 \v 9 Oziasi abotaki Yotami ; \li1 Yotami abotaki Akazi ; \li1 Akazi abotaki Ezekiasi ; \li1 \v 10 Ezekiasi abotaki Manase ; \li1 Manase abotaki Amoni ; \li1 Amoni abotaki Joziasi ; \li1 \v 11 Joziasi abotaki Yekonia mpe bandeko na ye ya mibali wana bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu, na Babiloni. \b \li4 \v 12 Sima na bana ya Isalaele kokende na bowumbu, na Babiloni, \li1 Yekonia abotaki Shealitieli ; \li1 Shealitieli abotaki Zorobabeli ; \li1 \v 13 Zorobabeli abotaki Abiwudi ; \li1 Abiwudi abotaki Eliakimi ; \li1 Eliakimi abotaki Azori ; \li1 \v 14 Azori abotaki Tsadoki ; \li1 Tsadoki abotaki Akimi ; \li1 Akimi abotaki Eliwudi ; \li1 \v 15 Eliwudi abotaki Eleazari ; \li1 Eleazari abotaki Matani ; \li1 Matani abotaki Jakobi ; \li1 \v 16 Jakobi abotaki Jozefi, mobali ya Mari ; mpe Mari azalaki mama ya Yesu oyo babengaka Klisto. \b \li4 \v 17 Kobanda na Abrayami kino na Davidi, elekaki bikeke zomi na minei ; kobanda na Davidi kino na tango oyo bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu, na Babiloni, elekaki lisusu bikeke zomi na minei ; mpe kobanda na bowumbu, na Babiloni, kino na Klisto, elekaki lisusu bikeke zomi na minei. \s1 Elaka ya mbotama ya Yesu \p \v 18 Tala ndenge nini Yesu-Klisto abotamaki : Mari, mama na Ye, azalaki mobandami ya libala na Jozefi ; kasi liboso ete bavanda ndako moko, Mari akomaki na zemi na nguya ya Molimo Mosantu. \v 19 Jozefi, mobandami na ye ya libala, azalaki moto ya sembo. Boye, lokola Jozefi alingaki te koyokisa Mari soni na miso ya bato, azwaki mokano ya koboya Mari na kimia. \p \v 20 Wana Jozefi azalaki kokanisa makambo yango, anjelu na Nkolo abimelaki ye kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Jozefi, mokitani ya Davidi, kobanga te kobala Mari ; pamba te zemi oyo azali na yango ewuti na Molimo Mosantu. \v 21 Akobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo Yesu, pamba te akobikisa bato na Ye na masumu na bango. » \p \v 22 Makambo wana nyonso esalemaki mpo na kokokisa maloba oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli : \v 23 « Elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, bongo bakopesa Ye kombo Emanwele oyo elingi koloba : Nzambe elongo na biso. » \p \v 24 Tango Jozefi alamukaki, asalaki makambo oyo anjelu na Nkolo atindaki ye kosala mpe azwaki Mari lokola mwasi na ye. \v 25 Kasi Jozefi asangisaki nzoto te na Mari kino tango Mari abotaki mwana mobali ; mpe Jozefi apesaki Ye kombo Yesu. \c 2 \s1 Bato ya mayele bayei kotala Yesu \p \v 1 Yesu abotamaki na Beteleemi ya Yuda, wana Erode azalaki mokonzi. Na tango yango, bato ya mayele oyo bawutaki na este bayaki na Yelusalemi \v 2 mpe batunaki : « Mokonzi ya Bayuda oyo abotami azali wapi ? Tomonaki monzoto na Ye kobima, yango wana toyei kogumbamela Ye. » \p \v 3 Tango mokonzi Erode ayokaki bongo, motema na ye etungisamaki makasi elongo na Yelusalemi mobimba. \v 4 Abengaki mpe asangisaki bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; atunaki bango : \pi1 — Klisto asengeli kobotama wapi ? \p \v 5 Bazongiselaki ye : \pi1 — Na Beteleemi ya Yuda, pamba te mosakoli akoma : \q1 \v 6 « Bongo yo, Beteleemi, kati na mabele ya Yuda, \q2 ozali solo moke te kati na bingumba ya Yuda, \q1 pamba te Mokonzi oyo, lokola Mobateli bibwele, \q2 akotambolisa bato na Ngai, Isalaele, akobima nde kati na yo. » \p \v 7 Bongo, Erode abengaki bato ya mayele na nkuku mpe alukaki koyeba epai na bango tango nini monzoto ebimaki. \v 8 Boye, atindaki bango na Beteleemi ; alobaki : \pi1 — Bokende koluka malamu mwana yango, na Beteleemi ; tango kaka bokomona ye, boyebisa ngai mpo ete ngai mpe nakende kogumbamela ye. \p \v 9 Sima na bango koyoka maloba ya mokonzi, bakobaki nzela na bango. Bamonaki lisusu monzoto oyo ewutaki kobima na este : monzoto yango ezalaki kotambola liboso na bango kino ekendeki kotelema na likolo ya esika oyo Mwana azalaki. \v 10 Tango kaka bamonaki lisusu monzoto yango, batondisamaki na esengo. \v 11 Bakomaki na ndako yango, bamonaki Mwana elongo na Mari, mama na Ye, mpe bagumbamelaki Ye ; bongo bafungolaki mabenga na bango mpe babonzelaki Ye biloko oyo lokola bakado : wolo, malasi ya ansa mpe mire. \v 12 Sima na yango, Nzambe akebisaki bango kati na ndoto ete bazonga lisusu te epai ya Erode. Boye, bazongaki na mboka na bango na nzela mosusu. \s1 Bokimi na Ejipito \p \v 13 Sima na bato ya mayele kokende, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye ; bokima na Ejipito mpe bowumela kuna kino tango nakoyebisa yo lisusu ete bozonga, pamba te Erode akoluka koboma Mwana. » \p \v 14 Jozefi atelemaki, azwaki Mwana elongo na mama na Ye, kaka na butu wana, mpe akimaki na Ejipito \v 15 epai wapi awumelaki kino na kufa ya Erode, mpo ete makambo oyo Nkolo alobaki na nzela ya mosakoli ekokisama : « Wuta na Ejipito, nabengaki mwana na Ngai. » \b \p \v 16 Tango Erode asosolaki ete bato ya mayele bakosi ye, atombokaki makasi mpe apesaki mitindo ete baboma bana mike nyonso ya mibali ya mibu mibale kino na se, oyo bazalaki na Beteleemi mpe na zingazinga na yango, kolanda tango oyo bato ya mayele bayebisaki ye na tina na eleko oyo monzoto ebimaki. \v 17 Boye nde ekokisamaki makambo oyo mosakoli Jeremi alobaki : \q1 \v 18 « Makelele moko eyokani na Rama, \q2 makelele ya kolela makasi mpe ya matanga : \q1 Rasheli azali kolela bana na ye ; \q2 aboyi kobondisama, \q2 pamba te bazali lisusu na bomoi te. » \s1 Bozongi na Nazareti \p \v 19 Sima na kufa ya Erode, anjelu na Nkolo abimelaki Jozefi kati na ndoto, kuna na Ejipito, \v 20 mpe alobaki na ye : « Telema, kamata Mwana elongo na mama na Ye, mpe zonga kati na mokili ya Isalaele, pamba te bato oyo bazalaki koluka koboma Mwana basili kokufa. » \p \v 21 Jozefi atelemaki, azwaki Mwana elongo na mama na Ye mpe akendeki na mokili ya Isalaele. \r (Lk 2.39-40) \p \v 22 Kasi tango ayokaki ete Arikelawusi akitanaki na tata na ye, Erode, na bokonzi kati na Yuda, abangaki kokende kuna ; kasi Nzambe akebisaki Jozefi kati na ndoto, mpe Jozefi akendeki kati na etuka ya Galile \v 23 epai wapi avandaki kati na engumba Nazareti, mpo ete makambo oyo basakoli balobaki ekokisama : « Bakobenga Ye moto ya Nazareti. » \c 3 \s1 Mateya ya Yoane Mobatisi \r (Mlk 1.2-8; Lk 3.1-18; Yn 1.19-23) \p \v 1 Na tango wana, Yoane Mobatisi ayaki mpe akomaki koteya kati na esobe ya Yuda : \v 2 « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! » \p \v 3 Yoane azali ye oyo mosakoli Ezayi alobaki : \q1 « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : \q2 ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, \q2 bosembolela Ye banzela ya mike ! › » \p \v 4 Yoane azalaki kolata elamba oyo basala na bapwale ya shamo mpe mokaba oyo basala na poso ya nyama ; azalaki kolia mankoko mpe mafuta ya nzoyi. \v 5 Bato bazalaki kokende epai na ye longwa na Yelusalemi, na Yuda mobimba mpe na etuka mobimba ya Yordani ; \v 6 bazalaki kotubela masumu na bango, mpe ye, azalaki kobatisa bango na ebale Yordani. \p \v 7 Kasi lokola azalaki komona Bafarizeo mpe Basaduseo koya ebele mpo na kozwa libatisi, alobaki na bango : « Bana ya banyoka, nani ateyi bino kokima kanda oyo ezali koya ? \v 8 Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema. \v 9 Bokanisa kutu te komilobela na se ya mitema : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami. \v 10 Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa : nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto. \p \v 11 Ngai nazali kobatisa bino na mayi mpo na kolakisa ete bobongoli mitema. Kasi sima na ngai, Moto moko azali koya, aleki ngai na nguya ; ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe kati na moto. \v 12 Asimbi kiyungulu na loboko na Ye, akopetola etando na Ye mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba kati na moto oyo ekufaka te, matiti oyo ekotikala. » \s1 Kobatisama ya Yesu \r (Mlk 1.9-11; Lk 3.21-22; Yn 1.29-34) \p \v 13 Yesu alongwaki na Galile mpe akendeki na Yordani mpo ete Yoane abatisa Ye. \v 14 Kasi Yoane aboyaki kobatisa Ye. Alobaki : \pi1 — Ezali ngai nde nazali na posa ete Yo obatisa ngai ; kasi ndenge nini Yo oyei epai na ngai ? \p \v 15 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Tika ete esalema bongo sik’oyo ! Ezali malamu mpo na biso kosala bongo mpo na kokokisa bosembo nyonso.\wj* \p \v 16 Tango kaka Yesu azwaki libatisi mpe abimaki na mayi, Likolo efungwamaki ; mpe Yesu amonaki Molimo ya Nzambe kokitela Ye lokola ebenga. \v 17 Bongo, mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo mpe elobaki : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi. » \c 4 \s1 Komekama ya Yesu \r (Mlk 1.12-13; Lk 4.1-13) \p \v 1 Molimo amemaki Yesu kati na esobe mpo ete Satana ameka Ye. \v 2 Sima na Ye kokila bilei mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, ayokaki nzala. \v 3 Momeki ayaki epai na Ye mpe alobaki na Ye : \pi1 — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na mabanga oyo ete ebongwana mapa. \p \v 4 Yesu azongisaki : \q1 \wj — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te,\wj* \q2 \wj kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »\wj* \p \v 5 Bongo, Satana amemaki Ye na engumba ya bule, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo \v 6 mpe alobaki na Ye : \pi1 — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; pamba te ekomama : \q1 « Akopesa mitindo na ba-anjelu na tina na yo, \q2 mpe bakomema yo na maboko na bango \q2 mpo ete lokolo na yo etutana na libanga te. » \p \v 7 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Ekomama mpe : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »\wj* \p \v 8 Satana amemaki Ye lisusu na likolo ya ngomba oyo eleki molayi mpe alakisaki Ye bokonzi nyonso ya mokili elongo na lokumu na yango ; \v 9 alobaki na Ye : \pi1 — Nakopesa yo nyonso oyo ozali komona, soki kaka ofukameli ngai mpe ogumbameli ngai. \p \v 10 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Mosika na ngai, Satana ! Pamba te ekomama :\wj* \q1 \wj « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo,\wj* \q2 \wj mpe okosambelaka kaka Ye. »\wj* \p \v 11 Boye Satana atikaki Ye, mpe ba-anjelu bayaki kopesa Ye bilei. \s1 Yesu abandi mosala na Galile \r (Mlk 1.14-15; Lk 4.14-15) \p \v 12 Tango Yesu ayokaki ete babwaki Yoane Mobatisi kati na boloko, azongaki na Galile. \v 13 Kasi avandaki na Nazareti te ; akendeki nde kovanda na Kapernawumi oyo ezalaki pembeni ya ebale, kati na etuka ya Zabuloni mpe ya Nefitali, \v 14 mpo na kokokisa maloba oyo mosakoli Ezayi alobaki : \q1 \v 15 « Mokili ya Zabuloni mpe ya Nefitali, \q2 nzela ya ebale monene, pembeni ya Yordani, \q2 Galile ya bapagano, \q1 \v 16 bato oyo bazalaki kovanda kati na molili \q2 bamoni pole makasi ; \q1 ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi, \q2 pole ebimeli bango. » \p \v 17 Wuta na tango wana, Yesu abandaki koteya : \wj « Bobongola mitema na bino, pamba te Bokonzi ya Likolo ekomi pene ! »\wj* \s1 Yesu abengi bayekoli ya liboso \r (Mlk 1.16-20; Lk 5.1-11) \p \v 18 Wana Yesu azalaki kotambola pembeni ya ebale ya Galile, amonaki bandeko mibali mibale : Simona oyo bazalaki kobenga Petelo, mpe Andre, ndeko na ye ; bazalaki kobwaka monyama na ebale, pamba te bazalaki balobi mbisi. \v 19 Yesu alobaki na bango : \wj « Bolanda Ngai, mpe nakokomisa bino balobi bato. »\wj* \p \v 20 Mbala moko, batikaki minyama na bango mpe balandaki Yesu. \p \v 21 Tango alongwaki wana mpo na kokoba mobembo na Ye, amonaki lisusu bandeko mibali mibale : Jake, mwana mobali ya Zebede, mpe Yoane, ndeko na ye. Bazalaki kobongisa minyama kati na bwato na bango elongo na Zebede, tata na bango. Yesu abengaki bango ; \v 22 mpe, mbala moko, batikaki bwato mpe tata na bango, bongo balandaki Yesu. \s1 Yesu abikisi babeli \r (Mlk 3.7-12; Lk 6.17-19) \p \v 23 Wana Yesu azalaki kotambola kati na Galile mobimba, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Likolo, kobikisa bato na pasi mpe na bokono na bango nyonso. \v 24 Sango na Ye epanzanaki kati na Siri mobimba, mpe bato bazalaki komemela Ye babeli oyo bazalaki na bokono ya ndenge na ndenge mpe oyo bazalaki na mikakatano makasi : bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe, bato oyo bazalaki na bokono ya ndeke mpe bato oyo bazalaki na makolo mpe maboko ya kokufa ; mpe azalaki kobikisa bango. \v 25 Ebele ya bato bazalaki kolanda Ye ; bazalaki kowuta na Galile, na Dekapoli\f + \fr 4.25 \fr*\ft Dekapoli ezalaki etuka ya bingumba zomi\ft*\f*, na Yelusalemi, na Yuda mpe na etuka mobimba ya ngambo ya Yordani. \c 5 \s1 Mateya na likolo ya ngomba \r (Mlk 3.13; Lk 6.12-13, 20) \p \v 1 Tango Yesu amonaki ebele yango ya bato, amataki likolo ya ngomba mpe avandaki. Bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye, \v 2 mpe akomaki kopesa bango malakisi. \s2 Esengo ya kokoka \r (Lk 6.20-26) \m Alobaki : \q1 \v 3 \wj « Esengo na babola na molimo,\wj* \q2 \wj pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !\wj* \q1 \v 4 \wj Esengo na bato oyo bazali kolela,\wj* \q2 \wj pamba te bakobondisama !\wj* \q1 \v 5 \wj Esengo na bato na komikitisa,\wj* \q2 \wj pamba te bakozwa mokili lokola libula !\wj* \q1 \v 6 \wj Esengo na bato oyo bazali na nzala mpe na posa ya bosembo,\wj* \q2 \wj pamba te bakotondisama !\wj* \q1 \v 7 \wj Esengo na bato oyo bayokelaka bato mosusu mawa,\wj* \q2 \wj pamba te bakoyokela bango mpe mawa !\wj* \q1 \v 8 \wj Esengo na bato oyo bazali na mitema peto,\wj* \q2 \wj pamba te bakomona Nzambe !\wj* \q1 \v 9 \wj Esengo na bato oyo bayeisaka kimia,\wj* \q2 \wj pamba te bakobengama bana na Nzambe !\wj* \q1 \v 10 \wj Esengo na bato oyo bazali konyokolama likolo ya bosembo,\wj* \q2 \wj pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bango !\wj* \p \v 11 \wj Esengo na bino tango bazali kofinga bino, tango bazali konyokola bino, mpe tango bazali kokosela bino makambo ya lolenge nyonso likolo na Ngai !\wj* \v 12 \wj Bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo ; pamba te ezalaki mpe kaka ndenge wana nde banyokolaki basakoli oyo bazalaki liboso na bino.\wj* \s2 Mungwa mpe pole ya mokili \r (Mlk 9.50; Lk 14.34-35) \p \v 13 \wj Bozali mungwa ya mokili. Kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakokoka lisusu kozongisa elengi na yango ? Ezali lisusu na tina moko te ; etikali kaka eloko ya kobwaka mpe ya konyata.\wj* \r (Mlk 4.21; Lk 8.16; 11.33) \p \v 14 \wj Bozali pole ya mokili. Engumba oyo batongi na likolo ya ngomba ekoki kobombama te.\wj* \v 15 \wj Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini ; nzokande, atiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete engengisa bato nyonso oyo bazali kati na ndako.\wj* \v 16 \wj Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.\wj* \s2 Yesu mpe Mobeko \p \v 17 \wj Bokanisa te ete Ngai nayaki mpo na kolongola Mobeko to basakoli ; solo, nayaki te mpo na kolongola, kasi nayaki nde mpo na kokokisa.\wj* \v 18 \wj Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo : liboso ete Likolo mpe mabele elimwa, nkoma moko te oyo eleki moke to litono oyo ezalaka na likolo ya i ekotikala kolongwa kati na Mobeko, kino makambo nyonso ekokisama.\wj* \v 19 \wj Yango wana, moto nyonso oyo akobuka moko kati na mibeko oyo, ezala oyo eleki moke kati na yango, mpe akoteya bato mosusu kosala bongo, bakozwa ye lokola moto pamba kati na Bokonzi ya Likolo. Kasi moto oyo akotosa mpe akoteya mibeko oyo epai na bato mosusu akozala moto monene kati na Bokonzi ya Likolo.\wj* \v 20 \wj Pamba te, nazali koloba na bino solo ete soki bosembo na bino liboso ya Mobeko eleki te bosembo ya balakisi ya Mobeko mpe ya Bafarizeo, bokokota te na Bokonzi ya Likolo.\wj* \s2 Mateya na tina na kanda \r (Mlk 11.25; Lk 12.57-59) \p \v 21 \wj Boyokaki ete baloba na bakoko na biso : ‹ Okobomaka te. Moto nyonso oyo akoboma moninga na ye asengeli na kosambisama liboso ya basambisi. ›\wj* \v 22 \wj Kasi Ngai, nalobi na bino : Moto nyonso oyo akokangela ndeko na ye kanda akosamba na esambiselo liboso ya basambisi ; moto oyo akofinga ndeko na ye : ‹ zoba, › akosamba liboso ya Likita-Monene ; mpe oyo akoloba na ndeko na ye : ‹ moto ya liboma, › akobwakama kati na moto ya lifelo.\wj* \p \v 23 \wj Soki ozali kokende kopesa makabo na yo liboso ya etumbelo, mpe ososoli ete ndeko na yo azwa yo na likambo,\wj* \v 24 \wj tika makabo na yo liboso ya etumbelo mpe kende nanu koyokana na ndeko na yo wana ; sima na yango nde okoya kopesa makabo na yo.\wj* \p \v 25 \wj Soki moto azwi yo na likambo, yokana na ye noki, wana bozali nanu na nzela ; soki te, akofunda yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo na boloko.\wj* \v 26 \wj Nazali koloba na yo penza ya solo : okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo nyonso.\wj* \s2 Mateya na tina na ekobo \r (Mat 18.8-9; Mlk 9.43, 47-48) \p \v 27 \wj Boyokaki ete baloba : ‹ Okosalaka ekobo te. ›\wj* \v 28 \wj Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.\wj* \v 29 \wj Yango wana, soki liso na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ebwakama na lifelo.\wj* \v 30 \wj Soki mpe loboko na yo ya ngambo ya mobali ekweyisaka yo na masumu, kata yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kobungisa eteni moko ya nzoto, na esika ete nzoto na yo mobimba ekende na lifelo.\wj* \s2 Mateya na tina na libala \r (Mat 19.7-9; Mlk 10.11-12; Lk 16.18) \p \v 31 \wj Boyokaki lisusu ete baloba : ‹ Soki mobali akabwani na mwasi na ye, asengeli kopesa ye mokanda ya koboma libala. ›\wj* \v 32 \wj Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki mwasi yango akweyaki na ekobo, afungoleli ye nzela ya kosala kindumba ; mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongola na libala asali mpe ekobo.\wj* \s2 Mateya na tina na ndayi \p \v 33 \wj Boyokaki lisusu ete baloba na bakoko na biso : ‹ Okolapa ndayi ya lokuta te, kasi kokisa bilaka oyo opesaki na nzela ya ndayi liboso ya Nkolo. ›\wj* \v 34 \wj Kasi Ngai, nazali koloba na bino : bolapaka ndayi te, ezala na kombo ya Likolo, pamba te Likolo ezali Kiti ya Bokonzi ya Nzambe,\wj* \v 35 \wj to na kombo ya mokili, pamba te mokili ezali enyatelo makolo ya Nzambe ; to mpe na kombo ya Yelusalemi, pamba te Yelusalemi ezali engumba ya Mokonzi Monene.\wj* \v 36 \wj Bosalelaka mpe te mito na bino mpo na kolapa ndayi, pamba te bokoki te kokomisa moko kati na suki ya mito na bino pembe to mwindo.\wj* \v 37 \wj Kasi bolobaka kaka ‹ iyo › soki ezali iyo, mpe ‹ te › soki ezali bongo, pamba te maloba nyonso oyo ebakisamaka likolo ewutaka na Mokosi.\wj* \s2 Mateya na tina na kozongisa mabe na mabe \r (Lk 6.29-30) \p \v 38 \wj Boyokaki ete baloba : ‹ Liso mpo na liso, linu mpo na linu. ›\wj* \v 39 \wj Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Botelemelaka te moto mabe ; kutu soki abeti yo mbata na litama ya ngambo ya loboko ya mobali, pesa ye mpe litama ya ngambo ya loboko ya mwasi.\wj* \v 40 \wj Soki moto alingi kofunda yo mpo na kozwa elamba na yo, pesa ye mpe kazaka na yo.\wj* \v 41 \wj Soki moto atindi yo na makasi ete otambola kilometele moko, yo, tambola bakilometele mibale elongo na ye.\wj* \v 42 \wj Pesa na moto oyo asengi yo, mpe koboya te kodefisa na moto oyo alingi kodefa epai na yo.\wj* \s2 Mateya na tina na bolingo \r (Lk 6.27-36) \p \v 43 \wj Boyokaki ete baloba : ‹ Linga moninga na yo mpe yina monguna na yo. ›\wj* \v 44 \wj Kasi Ngai, nazali koloba na bino : Bolingaka banguna na bino mpe bosambelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.\wj* \v 45 \wj Na ndenge wana nde bokozala bana ya Tata na bino, oyo azali kati na Likolo, pamba te abimisaka moyi mpo na bato malamu mpe mpo na bato mabe, mpe anokisaka mvula mpo na bato ya sembo mpe mpo na bato oyo bazali sembo te.\wj* \v 46 \wj Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, lifuti nini bokozwa ? Boni, bafutisi mpako basalaka mpe bongo te ?\wj* \v 47 \wj Soki bopesaka mbote kaka na bandeko mibali na bino, likambo nini ya kokamwa oyo bosalaka ? Boni, bapagano basalaka mpe bongo te ?\wj* \v 48 \wj Bozala bato ya kokoka ndenge Tata na bino ya Likolo azali ya kokoka.\wj* \c 6 \s2 Mateya na tina na makabo epai na babola \p \v 1 \wj Bosala keba ete bosalelaka te bosembo na bino liboso ya bato, mpo ete bamona bino ; soki te, bokozanga lifuti oyo Tata na bino ya Likolo abombela bino.\wj* \v 2 \wj Tango ozali kokabela babola, kobetela yango tangwa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka kati na bandako ya mayangani mpe na babalabala mpo ete bato bakumisa bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.\wj* \v 3 \wj Kasi tango yo ozali kokabela babola, sala yango na ndenge ete loboko na yo ya mwasi eyeba ete likambo oyo loboko na yo ya mobali ezali kosala,\wj* \v 4 \wj mpo ete likabo na yo ya mawa etikala sekele ; bongo Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.\wj* \s2 Mateya na tina na libondeli \p \v 5 \wj Tango bozali kosambela, bosalaka te lokola bato ya bilongi mibale oyo balingaka kosambela ya kotelema kati na bandako ya mayangani mpe na bisika oyo babalabala ekutana, mpo ete bato bamona bango. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.\wj* \v 6 \wj Kasi yo, soki olingi kosambela, kota na shambre na yo, kanga ekuke mpe sambela Tata na yo, oyo azali kati na esika wana ya sekele ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku, akopesa yo lifuti.\wj* \p \v 7 \wj Tango bozali kosambela, bozongelaka-zongelaka te maloba ndenge bapagano basalaka ; pamba te bakanisaka ete Nzambe akoyanola bango soki balobi mingi.\wj* \v 8 \wj Bosalaka lokola bango te, pamba te Tata na bino ayebi posa na bino liboso ete botalisa Ye yango.\wj* \r (Lk 11.2-4) \q1 \v 9 \wj Tala ndenge nini bosengeli kosambela :\wj* \q2 \wj ‹ Tata na biso,\wj* \q1 \wj Yo oyo ozali kati na Likolo ;\wj* \q2 \wj tika ete Kombo na Yo ebulisama,\wj* \q1 \v 10 \wj tika ete Bokonzi na Yo eya,\wj* \q2 \wj tika ete mokano na Yo esalema,\wj* \q2 \wj awa na mokili ndenge esalemaka kuna na Likolo !\wj* \q1 \v 11 \wj Pesa biso, na mokolo ya lelo,\wj* \q2 \wj bilei na biso ya mokolo na mokolo ;\wj* \q1 \v 12 \wj limbisa mabe na biso,\wj* \q2 \wj ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo basalaki biso mabe ;\wj* \q1 \v 13 \wj komema biso na komekama te,\wj* \q2 \wj kasi kangola biso longwa na misala ya Satana ;\wj* \q1 [\wj pamba te bokonzi, nguya mpe nkembo\wj* \q2 \wj ezali ya Yo seko na seko.\wj*]\f + \fr 6.13 \fr*\ft Makomi oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.\ft*\f* › \m \v 14 \wj Pamba te soki bolimbisi baninga, na mabe oyo basali bino, Tata na bino ya Likolo mpe akolimbisa bino ;\wj* \v 15 \wj kasi soki bolimbisi te, Tata na bino mpe akolimbisa te mabe na bino.\wj* \s2 Mateya na tina na kokila bilei \p \v 16 \wj Tango bozali kokila bilei, bozalaka mawa-mawa te ndenge bato ya bilongi mibale basalaka ; pamba te bakomisaka bilongi na bango mawa-mawa mpo na kolakisa na bato ete bazali kokila bilei. Nazali koloba na bino penza ya solo : basili kozwa lifuti na bango.\wj* \v 17 \wj Kasi tango yo ozali kokila bilei, sukola elongi na yo malamu mpe pakola moto na yo malasi,\wj* \v 18 \wj mpo ete moto moko te ayeba ete ozali kokila bilei, longola kaka Tata na yo, oyo amonanaka te ; bongo Ye, Tata na yo, oyo amonaka makambo oyo esalemaka na nkuku akopesa yo lifuti.\wj* \s2 Mateya na tina na bomengo \r (Lk 12.33-34) \p \v 19 \wj Bonduka bomengo te awa na mokili, pamba te ekoki kobeba to nselele ekoki kolia yango to mpe miyibi bakoki kobuka ndako mpo na koyiba yango.\wj* \v 20 \wj Kasi bonduka bomengo na bino kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te to nselele ekoki kolia yango te to mpe miyibi bakoki kobuka ndako te mpo na koyiba yango ;\wj* \v 21 \wj pamba te epai bomengo na yo ezali, kuna mpe motema na yo ekozala.\wj* \s2 Mwinda ya nzoto \r (Lk 11.34-36) \p \v 22 \wj Miso ezali lokola mwinda ya nzoto. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na pole.\wj* \v 23 \wj Kasi soki miso na yo ekufi, nzoto na yo mobimba mpe ekozala kati na molili. Bongo soki pole oyo ezali kati na yo ekomi molili, molili yango ekozala makasi penza.\wj* \s2 Nzambe to mbongo \r (Lk 16.13) \p \v 24 \wj Moto moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela Nzambe mpe mbongo nzela moko.\wj* \s2 Mateya na tina na mitungisi \p \v 25 \wj Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini to tokomela nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ? Boni, bomoi eleki bilei te na tina, mpe nzoto eleki bilamba te na tina ?\wj* \v 26 \wj Botala ndeke ya likolo : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ebombaka bilei te kati na bibombelo ; kasi Tata na bino ya Likolo aleisaka yango. Boni, bozali na motuya te koleka yango ?\wj* \v 27 \wj Nani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye ?\wj* \p \v 28 \wj Bongo mpo na nini bomitungisaka mpo na bilamba ya kolata ? Botala bafololo ya bilanga ndenge ekolaka ! Esalaka te mpe etongaka bilamba te ;\wj* \v 29 \wj nzokande, nazali koloba na bino ya solo ete ata Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango.\wj* \v 30 \wj Soki Nzambe alatisaka ndenge wana matiti ya bilanga, oyo, na mokolo ya lelo, ezali na bomoi mpe, lobi, ekobwakama na moto, ekozala ndenge nini mpo na bino ? Akolatisa bino te na ndenge ya kitoko koleka ? Bato ya kondima moke !\wj* \v 31 \wj Yango wana, bomitungisaka te na koloba : ‹ Tokolia nini ? Tokomela nini ? Tokolata nini ? ›\wj* \v 32 \wj Biloko wana nyonso, ezali bapagano nde balukaka-lukaka yango ; kasi mpo na bino, Tata na bino ya Likolo ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.\wj* \v 33 \wj Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe mpe bosembo na Ye, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.\wj* \p \v 34 \wj Yango wana, bomitungisaka te mpo na mokolo ya lobi oyo ezali koya, pamba te mokolo yango ya lobi ekomitungisa na tina na yango moko : mokolo na mokolo ezali na pasi oyo ekoki na yango.\wj* \c 7 \s2 Kosambisa te na esika ya Nkolo \r (Lk 6.37-42) \p \v 1 \wj Bosambisaka te mpo ete, bino mpe, basambisa bino te.\wj* \v 2 \wj Pamba te bakosambisa bino ndenge kaka bino bosambisaka baninga, mpe bakomeka bino na emekelo kaka oyo bino bosalelaka mpo na komeka bato mosusu.\wj* \p \v 3 \wj Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko ?\wj* \v 4 \wj Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso, › wana ozali na nzete kati na liso na yo ?\wj* \v 5 \wj Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo miso na yo ekomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.\wj* \b \p \v 6 \wj Bopesa te biloko ya bule epai ya bambwa, noki te ekozongela bino mpo na koswa bino ; bobwaka te bapawuni na bino ya talo epai ya bangulu, noki te ekonyata-nyata yango.\wj* \s2 Molende na mabondeli \r (Lk 11.9-13) \p \v 7 \wj Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino ;\wj* \v 8 \wj pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.\wj* \v 9 \wj Nani kati na bino apesaka na mwana na ye libanga, soki asengi ye lipa ?\wj* \v 10 \wj To nani apesaka na mwana na ye nyoka soki asengi mbisi ?\wj* \v 11 \wj Soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata na bino oyo azali na Likolo apesa te biloko ya kitoko epai ya bato oyo basengaka Ye yango ?\wj* \r (Lk 6.31) \p \v 12 \wj Nyonso oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango ; pamba te yango nde mateya nyonso ya Mobeko mpe ya basakoli.\wj* \s2 Banzela mibale \r (Lk 13.23-24) \p \v 13 \wj Bokotela na ekuke ya moke ; pamba te ekuke mpe nzela oyo ememaka na libebi ezali monene, mpe bato ebele bakotelaka wana.\wj* \v 14 \wj Kasi ekuke to nzela oyo ememaka na bomoi ezali moke, mpe bato moke kaka nde bamonaka yango.\wj* \s2 Basakoli ya lokuta \r (Lk 6.43-44) \p \v 15 \wj Bosala keba na basakoli ya lokuta ! Tango bayaka epai na bino, bazwaka lolenge ya bameme, kasi bazali penza bambwa ya zamba oyo etonda na kanda.\wj* \v 16 \wj Bokoyeba bango na nzela ya misala na bango. Boni, bokoki kolongola bambuma ya vino na nzete ya basende to kobuka bambuma ya figi na nzete ya banzube ?\wj* \v 17 \wj Nzete nyonso ya malamu ebotaka mpe bambuma ya malamu, kasi nzete ya mabe ebotaka mpe bambuma ya mabe.\wj* \v 18 \wj Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu.\wj* \v 19 \wj Nzete nyonso oyo ebotaka te bambuma ya malamu, bapikolaka yango mpe babwakaka yango na moto.\wj* \v 20 \wj Boye, bokoyeba basakoli ya lokuta na nzela ya misala na bango.\wj* \s2 Bayekoli ya solo \r (Lk 23.25-27) \p \v 21 \wj Bato nyonso oyo balobaka na Ngai : ‹ Nkolo ! Nkolo ! › bakokota te na Bokonzi ya Likolo, kaka bato oyo basalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.\wj* \v 22 \wj Na mokolo ya kosambisama, bato ebele bakoloba na Ngai :\wj* \pi1 \wj ‹ Nkolo ! Nkolo ! Ezali te na Kombo na Yo nde tosakolaki, tobenganaki milimo mabe mpe tosalaki bikamwa ebele ? ›\wj* \p \v 23 \wj Bongo Ngai, nakoyebisa bango :\wj* \pi1 \wj ‹ Natikala koyeba bino te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino bato mabe ! ›\wj* \s2 Lisese ya batongi mibale ya ndako \r (Lk 6.47-49) \p \v 24 \wj Yango wana, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba mpe atie yango na misala akokani na moto ya mayele oyo atongaki ndako na ye na likolo ya libanga.\wj* \v 25 \wj Tango mvula ebetaki makasi, mayi mpe mopepe eyaki makasi, emibwakaki na ndako yango ; kasi atako bongo, ndako ekweyaki te, pamba te miboko na yango etongamaki na likolo ya libanga.\wj* \v 26 \wj Nzokande, moto nyonso oyo ayoki makambo oyo nawuti koloba, kasi atie yango te na misala, akokani na zoba oyo atongaki ndako na ye na likolo ya zelo :\wj* \v 27 \wj tango mvula ebetaki makasi, mayi eyaki elongo na mopepe makasi, emibwakaki na ndako yango ; ndako yango ekweyaki, mpe nyonso epanzanaki. »\wj* \s1 Bokonzi ya Yesu \r (Mlk 1.22; Lk 4.22) \p \v 28 Tango Yesu asilisaki koloba maloba oyo, bato nyonso bakamwaki makasi malakisi na Ye, \v 29 pamba te ateyaki bango na bokonzi oyo balakisi na bango ya Mobeko bazangaki. \c 8 \s1 Yesu abikisi babeli \r (Mlk 1.40-45; Lk 5.12-16) \p \v 1 Tango Yesu akitaki na ngomba, bato ebele penza balandaki Ye. \v 2 Moto moko na maba ayaki, agumbamaki liboso na Ye mpe alobaki : \pi1 — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto. \p \v 3 Yesu asembolaki loboko, asimbaki ye mpe alobaki : \pi1 \wj — Nalingi ete ezala bongo, koma peto.\wj* \p Mbala moko, apetolamaki na maba na ye ; \v 4 mpe Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Yoka malamu ! Koyebisa likambo oyo na moto te, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko mpo ete ezala litatoli na miso na bango ete obiki.\wj* \r (Lk 7.1-10; Yn 4.43-54) \p \v 5 Tango Yesu akotaki na Kapernawumi, mokonzi moko ya basoda ayaki epai na Ye mpe asengaki Ye lisungi. \v 6 Alobaki : \pi1 — Nkolo, mosali na ngai alali na ndako, azali kokoka kotambola te mpe azali kobela makasi. \p \v 7 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Nakoya kobikisa ye.\wj* \p \v 8 Mokonzi ya basoda alobaki : \pi1 — Nkolo, nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai ! Loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye. \v 9 Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai ; soki nalobi na moko : « Kende ! » akendaka ; mpe soki nalobi na mosusu : « Yaka ! » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo ! » asalaka yango. \p \v 10 Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki mingi mpe alobaki na bato oyo bazalaki kolanda Ye : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : natikali nanu komona te kondima ya boye kati na Isalaele !\wj* \v 11 \wj Lisusu, nazali koloba na bino solo ete bato ebele bakowuta na Este mpe na Weste, mpe bakovanda na mesa elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi kati na Bokonzi ya Likolo.\wj* \v 12 \wj Kasi bato oyo basengelaki kokitana na bokonzi bakobwakama kati na molili ya libanda epai wapi bakolela mpe bakoswa minu.\wj* \p \v 13 Bongo Yesu alobaki na mokonzi ya basoda : \pi1 \wj — Zonga na ndako na yo ! Tika ete esalemela yo kolanda kondima na yo !\wj* \m Mpe kaka na tango yango, mosali abikaki. \s1 Yesu abikisaki bokono na biso \r (Mlk 1.29-34; Lk 4.38-41) \p \v 14 Tango Yesu akomaki na ndako ya Petelo, akutaki mama-bokilo ya Petelo alala mpo ete azalaki kobela fievele. \v 15 Yesu asimbaki ye na loboko, mpe fievele esilaki ; bongo atelemaki mpe akomaki kobongisela Yesu bilei. \b \p \v 16 Tango pokwa ekomaki, bamemelaki Yesu bato ebele oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Kaka na liloba moko, Yesu abenganaki milimo mabe yango ; abikisaki mpe babeli nyonso. \v 17 Na bongo nde ekokisamaki liloba oyo mosakoli Ezayi alobaki : \q1 « Amemaki mokumba ya pasi na biso \q2 mpe abikisaki biso na bokono na biso. » \s1 Pasi ya kolanda Yesu \r (Lk 9.57-62) \p \v 18 Tango Yesu amonaki ete bato ebele bazingeli Ye, apesaki mitindo epai ya bayekoli na Ye ete bakatisa na ngambo mosusu ya ebale. \v 19 Molakisi moko ya mibeko apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki : \pi1 — Moteyi, nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende. \p \v 20 Kasi Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.\wj* \p \v 21 Moto mosusu oyo azalaki moko kati na bayekoli ya Yesu alobaki na Ye : \pi1 — Nkolo, pesa ngai nzela ete nakende nanu kokunda tata na ngai. \p \v 22 Kasi Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Landa Ngai ! Tika bakufi bakunda bakufi na bango.\wj* \s1 Yesu aleki mopepe na nguya \r (Mlk 4.36-41; Lk 8.22-25) \p \v 23 Yesu amataki na bwato, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye. \v 24 Mbala moko, mopepe moko ya makasi ekomaki kopepa kati na ebale mpe mbonge ekomaki kozipa bwato. Kasi Yesu azalaki kolala pongi. \v 25 Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balamusaki Ye na koganga : \pi1 — Nkolo, bikisa biso ! Tozali kokufa ! \p \v 26 Kasi Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bato na kondima moke ! Mpo na nini bozali kobanga ?\wj* \p Bongo atelemaki, agangelaki mopepe mpe mbonge ; bongo kimia monene ezongaki. \v 27 Bato oyo bazalaki wana bakamwaki mpe bakomaki kolobana : « Moto oyo azali penza ndenge nini mpo ete ezala mopepe mpe ebale etosa ye ? » \s1 Yesu aleki milimo mabe na nguya \r (Mlk 5.1-20; Lk 8.26-39) \p \v 28 Tango bakomaki na ngambo mosusu ya ebale, na etuka ya Gadara, bato mibale oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe babimaki wuta na bakunda mpe bayaki kokutana na Yesu ; bazalaki bato na kanza makasi, mpe bato bazalaki kobanga koleka na nzela wana. \v 29 Bakomaki koganga : \pi1 — Mwana na Nzambe, biso na yo likambo nini ? Boni, oyei awa mpo na kotungisa biso liboso ya tango oyo ekatama ? \p \v 30 Etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia mwa mosika ya esika oyo bazalaki. \v 31 Milimo mabe esengaki na Yesu : \pi1 — Soki okobengana biso, tinda biso kati na etonga wana ya bangulu. \p \v 32 Yesu alobaki na milimo yango : \pi1 \wj — Bobima !\wj* \p Milimo mabe ebimaki kati na bato wana mibale mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga nyonso ya bangulu ekitaki mbangu wuta na likolo ya ngomba kino na ebale ; mpe yango nyonso ezindaki mpe ekufaki kati na mayi. \p \v 33 Bakengeli bangulu bakimaki, bakendeki kati na engumba kopesa sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema mpe ndenge nini bato oyo bazalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe basilaki kokangolama. \v 34 Bongo bato nyonso ya engumba babimaki mpo na kokutana na Yesu ; mpe tango bamonaki Ye, babondelaki Ye ete abima na etuka na bango. \c 9 \s1 Yesu alimbisi mpe abikisi ebosono \p \v 1 Yesu amataki na bwato, akatisaki ebale mpe akendeki na engumba na Ye. \v 2 Bamemelaki Ye ebosono moko alala na tsipoyi. Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki na ebosono yango : \pi1 \wj — Mwana na Ngai, yika mpiko ! Masumu na yo elimbisami.\wj* \p \v 3 Mpo na yango, ndambo ya balakisi ya Mobeko bakomaki kolobaloba na se ya mitema : \pi1 — Moto oyo azali kotiola Nzambe ! \p \v 4 Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, atunaki bango : \pi1 \wj — Mpo na nini bozali na makanisi mabe kati na mitema na bino ?\wj* \v 5 \wj Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami to telema mpe tambola ? »\wj* \v 6 \wj Ezali mpo boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.\wj* \p Bongo alobaki na ebosono : \pi1 \wj — Telema, kamata tsipoyi na yo mpe zonga na ndako na yo.\wj* \p \v 7 Moto yango atelemaki mpe akendeki na ndako na ye. \v 8 Tango ebele ya bato bamonaki bongo, batondaki na somo mpe bakomaki kokumisa Nzambe oyo apesi bokonzi ya ndenge wana epai ya bato. \s1 Tembe na tina na Yesu \r (Mlk 2.13-22; Lk 5.27-39) \p \v 9 Wana Yesu alongwaki na esika yango mpe azalaki kokende, amonaki mobali moko avandi na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako ; kombo na ye ezalaki « Matayo. » Yesu alobaki na ye : \wj « Landa Ngai. »\wj* Boye Matayo atelemaki mpe alandaki Yesu. \p \v 10 Wana Yesu azalaki kolia kati na ndako ya Matayo, bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu ya masumu bayaki mpe baliaki mesa moko na Yesu elongo na bayekoli na Ye. \v 11 Tango Bafarizeo bamonaki bongo, batunaki bayekoli ya Yesu : \pi1 — Mpo na nini moteyi na bino azali kolia mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ? \p \v 12 Kasi lokola Yesu ayokaki Bafarizeo koloba bongo, alobaki na bango : \pi1 \wj — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te ; ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.\wj* \v 13 \wj Bokende koyekola tina ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » pamba te nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu.\wj* \p \v 14 Bongo bayekoli ya Yoane bayaki mpe batunaki Yesu : \pi1 — Mpo na nini biso mpe Bafarizeo tokilaka bilei, kasi bayekoli na yo bakilaka bilei te ? \p \v 15 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Boni, bato oyo babengami na feti ya libala bakoki solo kozala na mawa, wana mobali ya libala azali elongo na bango ? Nzokande, tango ezali koya oyo bakolongola mobali ya libala kati na bango ; mpe ekozala na tango wana nde bakokila bilei.\wj* \pi1 \v 16 \wj Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala, noki te eteni ya elamba ya sika ekopasola elamba ya kala, mpe ekosala lidusu monene koleka.\wj* \v 17 \wj Ezali mpe ndenge moko mpo na vino ya sika : batiaka yango te kati na bambeki ya kala, noki te bambeki ekopasuka, vino ekosopana mpe bambeki ekobeba libela. Nzokande, batiaka kaka vino ya sika kati na bambeki ya sika ; na bongo, vino mpe bambeki ekobatelama malamu.\wj* \s1 Yesu aleki bokono mpe kufa na nguya \r (Mlk 5.21-43; Lk 8.40-56) \p \v 18 Wana Yesu azalaki koloba na bango, mokambi moko ayaki ; agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki na Ye : \pi1 — Mwana na ngai ya mwasi akufi kaka sik’oyo ; yaka, tiela ye loboko, mpe akozonga lisusu na bomoi. \p \v 19 Yesu atelemaki mpe, elongo na bayekoli na Ye, alandaki mokambi yango. \p \v 20 Na tango yango kaka, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale. Mwasi yango ayaki na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye, \v 21 pamba te azalaki komilobela : \pi1 — Soki kaka nasimbi elamba na Ye, nakobika na bokono na ngai. \p \v 22 Yesu atalaki na sima mpe amonaki ye ; alobaki : \pi1 \wj — Mwana na Ngai ya mwasi, yika mpiko ! Kondima na yo ebikisi yo.\wj* \p Mpe kaka na tango yango, mwasi yango abikaki na bokono na ye. \p \v 23 Tango Yesu akomaki na ndako ya mokambi ya ndako ya mayangani, amonaki babeti flite mpe bato ebele bazali kotia makelele. \v 24 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Bobima ! Mwana akufi te ; alali nde pongi.\wj* \p Kasi bato bakomaki kotiola Ye. \v 25 Mpe sima na bango kobima libanda, Yesu akotaki na shambre, asimbaki elenge mwasi na loboko, mpe elenge mwasi yango alamukaki. \p \v 26 Sango ya likambo yango epanzanaki na etuka wana mobimba. \s1 Yesu abikisi bakufi miso mibale \p \v 27 Tango Yesu alongwaki wana, bakufi miso mibale balandaki Ye na koganga : \pi1 — Mwana ya Davidi, yokela biso mawa ! \p \v 28 Tango Yesu akomaki na ndako, bakufi miso bapusanaki pene na Ye. Atunaki bango : \pi1 \wj — Bondimi ete nazali na makoki ya kosala oyo bozali kosenga Ngai ?\wj* \p Bazongisaki : \pi1 — Iyo, Nkolo ! \p \v 29 Bongo asimbaki miso na bango mpe alobaki : \pi1 \wj — Tika ete esalemela bino kolanda kondima na bino !\wj* \p \v 30 Mpe mbala moko, bakomaki komona. Bongo Yesu akebisaki bango : \pi1 \wj — Bosala keba ete moto moko te ayeba likambo oyo ekomeli bino.\wj* \p \v 31 Kasi bango, tango kaka babimi, bakomaki kopanza sango na Ye kati na etuka wana mobimba. \r (Lk 11.14-15; Mat 12.22-24) \p \v 32 Wana bato wana mibale bazalaki kobima, bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe mpe azalaki koloba te. \v 33 Yesu abenganaki molimo mabe yango, mpe moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba. Ebele ya bato bakamwaki mpe balobaki : \pi1 — Kati na Isalaele, totikala nanu komona likambo ya boye te ! \p \v 34 Kasi Bafarizeo bazalaki koloba : \pi1 — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya mokonzi ya milimo mabe. \s1 Yesu ayokeli bato mawa \r (Mlk 6.34; Lk 10.2) \p \v 35 Yesu azalaki kotambola na bamboka mpe na bingumba nyonso, azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ; azalaki kobikisa bato na bokono mpe na pasi ya ndenge na ndenge. \b \r (Mlk 6.34; Lk 10.2) \p \v 36 Tango Yesu amonaki ngulupa ebele ya bato, ayokelaki bango mawa, pamba te mitema na bango ebukanaki, mpe balembaki makasi lokola bameme oyo ezangi mobateli. \v 37 Yesu alobaki na bayekoli na Ye : \wj « Elanga ezali monene, kasi basali bazali moke !\wj* \v 38 \wj Yango wana, bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye. »\wj* \c 10 \s1 Bantoma zomi na mibale \r (Mlk 3.13-19; Lk 6.12-16) \p \v 1 Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale mpe apesaki bango bokonzi ya kobengana milimo mabe mpe ya kobikisa bokono mpe pasi nyonso. \b \li4 \v 2 Tala bakombo ya bantoma zomi na mibale : \b \li1 liboso, Simona oyo kombo na ye mosusu ezalaki Petelo ; \li1 Andre, ndeko ya Petelo ; \li1 Jake, mwana mobali ya Zebede ; \li1 Yoane, ndeko ya Jake ; \li1 \v 3 Filipo mpe Bartelemi ; \li1 Toma mpe Matayo, mofutisi mpako ; \li1 Jake, mwana mobali ya Alife, mpe Tade ; \li1 \v 4 Simona oyo azalaki moko kati na bato ya lisanga ya Bazelote, mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu. \r (Mlk 6.7-13; Lk 9.16) \p \v 5 Ezali bato oyo zomi na mibale nde Yesu atindaki, sima na Ye kopesa bango mitindo oyo : \pi1 \wj — Bokende te epai ya bato ya bikolo mosusu, mpe bokota te na bingumba ya bato ya Samari.\wj* \v 6 \wj Kasi bokende epai ya bameme oyo ebunga ya bato ya Isalaele.\wj* \v 7 \wj Bipai nyonso oyo bokoleka, bosakola ete Bokonzi ya Likolo ekomi pene.\wj* \v 8 \wj Bobikisa babeli, bosekwisa bakufi, bokomisa peto bato na maba mpe bobengana milimo mabe. Bopesa na ofele mpo ete bino mpe bozwaki na ofele.\wj* \pi1 \v 9 \wj Kati na mabenga na bino, botia wolo te, palata te, mbongo mpe te.\wj* \v 10 \wj Mpo na mobembo na bino, bomema sakosi te, banzambala mibale te, basandale te, lingenda mpe te ; pamba te mosali asengeli kolia na mosala na ye.\wj* \v 11 \wj Na engumba to na mboka nyonso oyo bokokota, boluka moto oyo abongi mpo na koyamba bino mpe bovanda na ndako na ye kino tango bokolongwa.\wj* \v 12 \wj Mpe tango bokokota na ndako yango, bopesa bavandi na yango mbote na koloba : « Tika ete kimia ezala na bino ! »\wj* \v 13 \wj Soki bavandi ya ndako yango babongi na kimia yango, wana tika ete ewumela kati na bango ; soki te, wana tika ete ezonga epai na bino.\wj* \v 14 \wj Soki baboyi koyamba mpe koyoka bino, bolongwa na ndako to na engumba yango mpe bopupola putulu ya makolo na bino.\wj* \v 15 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : na mokolo ya kosambisama, etumbu ya bavandi ya engumba to ya mboka wana ekozala makasi koleka etumbu ya mokili ya Sodome mpe Gomore.\wj* \s1 Minyoko kati na lotomo \r (Mlk 13.9-13; Lk 21.12-19) \pi1 \v 16 \wj Nazali kotinda bino lokola bameme kati na bambwa ya zamba ; boye, bozala na ekenge lokola banyoka, mpe na boboto lokola bibenga.\wj* \v 17 \wj Kasi bosala keba, pamba te bakofunda bino na bisambiselo ya Bayuda mpe bakobeta bino fimbu kati na bandako na bango ya mayangani.\wj* \v 18 \wj Likolo na Ngai, bakomema bino na makasi liboso ya bayangeli mpe ya bakonzi. Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai liboso na bango mpe liboso ya bapagano.\wj* \v 19 \wj Tango bakofunda bino epai ya bakambi, bomitungisa te mpo na koluka makambo ya koloba to lolenge ya koloba yango, pamba te ekopesamela bino na tango wana.\wj* \v 20 \wj Ekozala bino te bato bokoloba, kasi Molimo ya Tata na bino nde akoloba na nzela ya minoko na bino.\wj* \pi1 \v 21 \wj Ndeko akokaba ndeko na ye mpo ete baboma ye, tata akokaba mwana na ye, bana bakotombokela baboti na bango mpe bakobomisa bango.\wj* \v 22 \wj Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai, kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.\wj* \v 23 \wj Tango bakonyokola bino kati na engumba songolo, bokima na engumba mosusu. Nazali koloba na bino penza ya solo : bokosilisa te kotambola na bingumba nyonso ya Isalaele liboso ete Mwana na Moto aya.\wj* \pi1 \v 24 \wj Moyekoli alekaka molakisi na ye te, mowumbu mpe alekaka nkolo na ye te.\wj* \v 25 \wj Nzokande, ekoki mpo na moyekoli kozala lokola molakisi na ye, mpe mpo na mowumbu kozala lokola nkolo na ye. Soki babengaki Nkolo ndako « Belizebule, » ekozala boni mpo na bavandi ya ndako na Ye ?\wj* \s1 Mpiko mpo na lotomo \r (Lk 12.2-9) \pi1 \v 26 \wj Yango wana, bobanga bango te ! Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana.\wj* \v 27 \wj Makambo oyo nazali koyebisa bino sik’oyo kati na molili, boloba yango na moyi ; mpe oyo bazali koloba na bino na litoyi, bosakola yango wuta na likolo ya ndako.\wj* \v 28 \wj Bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto, kasi bazangi makoki ya koboma elimo ; bobanga nde Ye oyo akoki koboma nzoto mpe elimo kati na lifelo.\wj* \v 29 \wj Boni, batekaka te bandeke mike mibale na motuya ya mbongo oyo eleki moke ? Nzokande, moko te kati na yango ekweyaka na mabele soki Tata na bino alingi te.\wj* \v 30 \wj Mpo na bino, Nzambe ayebi ata motango ya suki na bino.\wj* \v 31 \wj Yango wana, bobanga te, boleki bandeke mike nyonso na motuya.\wj* \pi1 \v 32 \wj Moto nyonso oyo akotatola liboso ya bato ete azali moto na Ngai, Ngai mpe nakotatola liboso ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ete nazali mpo na ye ;\wj* \v 33 \wj kasi ye oyo akowangana Ngai na miso ya bato, Ngai mpe nakowangana ye liboso ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.\wj* \r (Lk 12.51-53) \pi1 \v 34 \wj Bokanisa te ete nayaki mpo na komema kimia na mokili. Nayaki mpo na komema kimia te, kasi mopanga.\wj* \v 35 \wj Pamba te, nayaki mpo na kotia bokabwani\wj* \q1 \wj kati na mwana mobali mpe tata na ye,\wj* \q2 \wj kati na mwana mwasi mpe mama na ye,\wj* \q2 \wj mpe kati na mwasi ya libala mpe mama-bokilo na ye :\wj* \q1 \v 36 \wj banguna ya moto bakozala kaka bato ya libota na ye moko.\wj* \r (Mlk 8.34-35; Lk 9.23-24; 14.26-27) \pi1 \v 37 \wj Moto nyonso oyo alingaka tata na ye mpe mama na ye koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai. Moto nyonso oyo alingaka mwana na ye ya mobali to mwana na ye ya mwasi koleka Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.\wj* \v 38 \wj Moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpo na kolanda Ngai abongi te mpo na kozala moto na Ngai.\wj* \v 39 \wj Moto oyo akangami na bomoi na ye akobungisa yango ; mpe moto oyo abungisi bomoi na ye likolo na Ngai akozwa yango lisusu.\wj* \pi1 \v 40 \wj Moto oyo ayambaka bino ayambaka nde Ngai, mpe moto oyo ayambaka Ngai ayambaka nde Motindi na Ngai.\wj* \v 41 \wj Moto oyo ayambaka mosakoli mpo ete azali mosakoli akozwa lifuti ya ndenge moko na mosakoli, mpe moto oyo ayambaka moto ya sembo mpo ete azali moto ya sembo akozwa lifuti ya ndenge moko na moto ya sembo.\wj* \v 42 \wj Moto nyonso oyo apesaka ata kopo moko kaka ya mayi ya malili epai ya moko kati na bana mike oyo, mpo ete azali moyekoli na Ngai, nazali koloba na bino penza ya solo, akotikala kobungisa te lifuti na ye.\wj* \c 11 \p \v 1 Tango Yesu asilisaki kopesa mitindo epai ya bayekoli na Ye zomi na mibale, alongwaki wana, akendeki koteya mpe kopanza Sango Malamu kati na bingumba na bango. \s1 Yesu mpe Yoane Mobatisi \r (Lk 7.18-35) \p \v 2 Wana Yoane Mobatisi azalaki kati na boloko, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo Klisto azalaki kosala ; atindaki bayekoli na ye \v 3 kotuna epai ya Yesu : \pi1 — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ? \p \v 4 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bozali komona mpe koyoka :\wj* \v 5 \wj bakufi miso bazali komona, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi matoyi bazali koyoka, bakufi bazali kosekwa mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.\wj* \v 6 \wj Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !\wj* \p \v 7 Wana bayekoli ya Yoane bazalaki kozonga, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane ; atunaki bango : \pi1 \wj — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ?\wj* \v 8 \wj Soki mwa nzete yango te, bokendeki penza kotala nini ? Moto moko alati bilamba ya kitoko ? Te ! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko bavandaka na bandako ya bakonzi.\wj* \v 9 \wj Kasi bino, bokendeki penza kotala nini kati na esobe ? Mosakoli ? Solo, nazali koloba na bino penza ya solo : aleki kutu ata mosakoli.\wj* \v 10 \wj Pamba te, azali moto oyo bakoma na tina na ye :\wj* \q1 \wj « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo\wj* \q2 \wj mpo na kobongisela Yo nzela. »\wj* \mi \v 11 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane Mobatisi na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Likolo aleki Yoane Mobatisi na monene.\wj* \v 12 \wj Wuta na tango oyo Yoane Mobatisi azalaki koteya kino sik’oyo, kokota na Bokonzi ya Likolo ezali likambo ya koyika mpiko, mpe ezali kaka bato oyo bazali kobunda na kondima nde bazali kokota kuna.\wj* \v 13 \wj Pamba te basakoli nyonso mpe Mobeko basakolaki yango bango nyonso kino na tango ya Yoane.\wj* \v 14 \wj Mpe, soki bokoki kondima, boyeba ete ye nde azali Eliya oyo asengeli koya.\wj* \v 15 \wj Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !\wj* \pi1 \v 16 \wj Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga epai ya bamosusu :\wj* \q1 \v 17 \wj « Tobetaki baflite,\wj* \q2 \wj kasi bobinaki te ;\wj* \q1 \wj toyembelaki bino banzembo ya matanga,\wj* \q2 \wj kasi bolelaki-lelaki te. »\wj* \mi \v 18 \wj Pamba te, tango Yoane ayaki, azalaki kolia te mpe azalaki komela vino te ; mpe balobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! »\wj* \v 19 \wj Mpe awa Mwana na Moto mpe ayei, azali kolia mpe azali komela ; kasi bazali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe azali molangwi masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu. » Nzokande, misala ya bwanya etalisaka solo ete ezali sembo.\wj* \s1 Yesu apameli bingumba oyo eboyaki kondima \r (Mat 10.15; Lk 10.12-15) \p \v 20 Bongo Yesu apamelaki bingumba epai wapi asalaki mingi kati na bikamwa na Ye, pamba te bavandi na yango babongolaki mitema te. \v 21 Alobaki : \pi1 \wj — Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele bavandi na yango babongolaki mitema wuta kala, mpe mbele batalisaki yango na kolata basaki mpe na komipakola putulu !\wj* \v 22 \wj Yango wana, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.\wj* \pi1 \v 23 \wj Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te ! Okokitisama kino na mboka ya bakufi ! Pamba te, soki bikamwa oyo esalemaki kati na yo esalemaki kati na Sodome, mbele Sodome ezali kowumela kino na mokolo ya lelo.\wj* \v 24 \wj Yango wana, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, etumbu na yo ekozala makasi koleka etumbu mokili ya Sodome.\wj* \s1 Yesu abengi bato na mikumba \r (Lk 10.21-22) \p \v 25 Kaka na tango yango, Yesu alobaki : \pi1 \wj — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te, obombaki makambo oyo mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike !\wj* \v 26 \wj Iyo, Tata, pamba te, kati na boboto na Yo, olingaki ete esalema bongo !\wj* \pi1 \v 27 \wj Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi Mwana longola kaka Tata, mpe moko te ayebi Tata longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.\wj* \pi1 \v 28 \wj Boya epai na Ngai, bino nyonso oyo bolembi na mikumba ; Ngai, nakopesa bino bopemi.\wj* \v 29 \wj Bozwa ekangiseli na Ngai, bomema yango mpe boyekola epai na Ngai, pamba te nazali na motema ya boboto mpe ya komikitisa, bongo milimo na bino ekozwa bopemi.\wj* \v 30 \wj Solo, ekangiseli na Ngai ezali pasi te, mpe mokumba na Ngai ezali pepele.\wj* \c 12 \s1 Yesu mpe mokolo ya Saba \r (Mlk 2.23-28; Lk 6.1-5) \p \v 1 Na tango wana, Yesu alekaki kati na bilanga ya ble na mokolo ya Saba\f + \fr 12.1 \fr*\ft Mokolo ya Saba : mokolo ya eyenga ya Bayuda, mokolo ya poso na tango ya lelo\ft*\f*. Lokola bayekoli na Ye bakomaki na nzala, babandaki kobuka ble mpe kolia yango. \v 2 Tango Bafarizeo bamonaki bongo, balobaki na Yesu : \pi1 — Tala bayekoli na Yo ! Bazali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba. \p \v 3 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala,\wj* \v 4 \wj ndenge nini akotaki kati na Ndako ya Nzambe ; mpe, ye elongo na bato na ye, baliaki mapa oyo ebulisama ; nzokande, ezala ye to bato na ye, moko te azalaki na ndingisa ya kolia yango ; kaka Banganga-Nzambe nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango ?\wj* \v 5 \wj Botikala mpe nanu kotanga te kati na Mobeko ete, na mokolo ya Saba, Banganga-Nzambe oyo basalaka kati na Tempelo babukaka mobeko ya Saba, kasi bakweyaka na mbeba te mpo na yango ?\wj* \v 6 \wj Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino ete ezali awa na moto moko oyo azali monene koleka Tempelo !\wj* \v 7 \wj Ah soki bososolaki ndimbola ya maloba oyo : « Nasepelaka na motema ya boboto koleka mbeka, » bokokaki kopamela te bato oyo mpo ete basali mabe te !\wj* \v 8 \wj Pamba te Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.\wj* \r (Mlk 3.1-6; Lk 6.6-11) \p \v 9 Sima na Yesu kolongwa na esika yango, akendeki na ndako na bango ya mayangani \v 10 epai wapi ezalaki na moto moko akufa loboko. Bafarizeo batunaki Yesu : \pi1 — Boni, mibeko epesa nzela ya kobikisa bato na mokolo ya Saba ? \p Batunaki Ye bongo, pamba te bazalaki koluka likambo mpo na kofunda Ye. \v 11 Kasi Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Nani kati na bino, soki azali kaka na meme moko, mpe meme yango ekweyi kati na libulu, akokita te kati na libulu, na mokolo ya Saba, mpo na kobimisa yango ?\wj* \v 12 \wj Nzokande, moto azali na motuya koleka meme ! Boye, kosala bolamu na mokolo ya Saba endimama na mobeko.\wj* \p \v 13 Bongo, alobaki na moto yango : \pi1 \wj — Sembola loboko na yo.\wj* \p Moto yango asembolaki loboko na ye, mpe loboko yango ebongaki, ekomaki malamu lokola loboko mosusu. \p \v 14 Bafarizeo babimaki mpe bakabolaki makanisi kati na bango mpo na koluka nzela ya kobomisa Yesu. \s1 Yesu, Moponami na Nzambe \p \v 15 Wana Yesu asosolaki ete basali mabongisi ya koboma Ye, alongwaki na esika yango. Bato ebele balandaki Ye, mpe abikisaki babeli nyonso. \v 16 Kasi apekisaki bango kobeta ata lisolo na tina na Ye. \v 17 Asalaki bongo mpo ete maloba ya mosakoli Ezayi ekokisama : \q1 \v 18 « Tala mosali na Ngai, oyo naponi ; \q2 molingami na Ngai, mosali oyo nalingaka mingi, \q1 oyo asalaka esengo na Ngai. \q2 Nakopesa Ye Molimo na Ngai, \q2 mpe akosakola bosembo epai ya bikolo ya bapaya. \q1 \v 19 Akoswana te mpe akoganga te, \q2 bakoyoka mongongo na Ye te na babalabala. \q1 \v 20 Akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama \q2 mpe akoboma te mwinda oyo elingi kokufa \q2 kino akosala ete bosembo elonga \q1 \v 21 mpe bikolo nyonso ya bapaya etia elikya na Kombo na Ye. » \s1 Nzambe to Satana \r (Mlk 3.20-30; Lk 11.14-23; 12.10) \p \v 22 Bongo bamemelaki Yesu moto moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe, azalaki mokufi miso mpe azalaki koloba te. Yesu abikisaki ye ; boye moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba mpe komona. \v 23 Bato nyonso bakamwaki mpe bazalaki koloba : \pi1 — Boni, moto oyo azali mwana ya Davidi te ? \p \v 24 Kasi tango Bafarizeo bayokaki maloba oyo ezalaki kolobama na tina na Yesu, balobaki : \pi1 — Moto oyo azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe. \p \v 25 Lokola Yesu asosolaki makanisi na bango, alobaki na bango : \pi1 \wj — Bokonzi nyonso oyo bavandi na yango bakomi kobunda bango na bango ekobebisama ; engumba nyonso to ndako nyonso oyo bato na yango bazali lisusu na bomoko te ekowumela te.\wj* \v 26 \wj Soki Satana abengani Satana, wana akomi nde komibundisa ye moko ; bongo bokonzi na ye ekowumela ndenge nini ?\wj* \v 27 \wj Mpe soki, Ngai, nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani ? Yango wana, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino.\wj* \v 28 \wj Kasi soki ezali na nguya ya Molimo ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.\wj* \pi1 \v 29 \wj Ndenge nini moto akoki kokota na ndako ya elombe mpe koyiba biloko na ye ya ndako soki akangi nanu elombe yango te na basinga ? Nzokande, soki akangi ye na basinga, wana akoki solo koyiba biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ye.\wj* \pi1 \v 30 \wj Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka.\wj* \v 31 \wj Yango wana, nazali koloba na bino penza ya solo : lisumu nyonso mpe makambo mabe nyonso oyo bato bakoki koloba na tina na Nzambe ekolimbisama ; kasi moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Molimo Mosantu akolimbisama te.\wj* \v 32 \wj Moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Mwana na Moto akolimbisama ; kasi moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Molimo Mosantu akolimbisama te, ezala na bomoi na ye awa na se to na bomoi oyo ekoya.\wj* \s1 Nzete mpe bambuma na yango \r (Mat 7.16-20; Lk 6.43-45) \pi1 \v 33 \wj Nzete ya malamu ebotaka mpe bambuma ya malamu, nzete ya mabe ebotaka mpe bambuma ya mabe ; pamba te nzete eyebanaka na mbuma na yango.\wj* \v 34 \wj Libota ya banyoka ! Bokokoka ndenge nini koloba makambo ya malamu awa bozali bato mabe ? Pamba te maloba ya moto etalisaka lolenge ya motema na ye :\wj* \v 35 \wj moto malamu alobaka makambo ya malamu kowuta na motema malamu na ye, mpe moto mabe alobaka makambo ya mabe kowuta na motema mabe na ye.\wj* \v 36 \wj Nzokande, Ngai, nazali koloba na bino : na mokolo ya kosambisama, bato bakosamba mpo na maloba ezanga tina, oyo babimisaki.\wj* \v 37 \wj Pamba te ezali na nzela ya maloba na yo moko kaka nde bakolongisa yo to bakokweyisa yo.\wj* \r (Mlk 8.11-12; Lk 11.29-32) \p \v 38 Bongo ndambo ya balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo balobaki na Ye : \pi1 — Moteyi, tolingi komona yo kosala elembo moko. \p \v 39 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Oh bato ya ekeke oyo ! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya mosakoli Yona.\wj* \v 40 \wj Pamba te, ndenge Yona avandaki kati na libumu ya mbisi monene mikolo misato mpe babutu misato, ndenge wana mpe Mwana na Moto akosala mikolo misato mpe babutu misato na se ya mabele.\wj* \v 41 \wj Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema mpe bakokatela bato ya ekeke oyo etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Yona.\wj* \v 42 \wj Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akotelema elongo na bato ya ekeke oyo mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpe ayaki mpo na koyoka maloba ya bwanya ya Salomo ; nzokande, ezali awa na Moto oyo aleki Salomo.\wj* \r (Lk 11.24-26) \pi1 \v 43 \wj Soki molimo mabe ebimi kati na moto, ekendaka koyengayenga na bisika ekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Kasi soki ezwi esika yango te,\wj* \v 44 \wj emilobelaka : « Eleki malamu mpo na ngai kozonga na ndako oyo natikaki. » Tango molimo mabe yango ezongaka ekutaka ndako yango polele, bakombola mpe babongisa malamu,\wj* \v 45 \wj ekokende lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe ekoya elongo na yango mpo na kokota na elulu mpe kovanda kuna. Boye, bomoi ya moto yango ekokoma lisusu mabe koleka ndenge ezalaki liboso. Ekozala mpe bongo mpo na bato mabe ya ekeke oyo.\wj* \s1 Libota ya solo ya Yesu \r (Mlk 3.31-35; Lk 8.19-21) \p \v 46 Wana Yesu azalaki nanu koloba na bato, mama na Ye mpe bandeko na Ye ya mibali batelemaki libanda mpe bazalaki koluka kosolola na Ye. \v 47 Bongo moto moko ayebisaki Yesu : \pi1 — Mama mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya kosolola na yo. \p \v 48 Kasi Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Nani mama na Ngai, mpe banani bandeko na Ngai ?\wj* \p \v 49 Bongo Yesu atalisaki loboko na Ye na ngambo ya bayekoli na Ye mpe alobaki : \pi1 \wj — Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, bango oyo !\wj* \v 50 \wj Pamba te moto nyonso oyo asalaka mokano ya Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo, ye nde azali ndeko na Ngai ya mobali, ndeko na Ngai ya mwasi mpe mama na Ngai.\wj* \c 13 \s1 Lisese ya moloni \r (Mlk 4.1-9; Lk 8.4-8) \p \v 1 Mokolo yango kaka, Yesu abimaki na ndako mpe akendeki kovanda pembeni ya ebale. \v 2 Lokola ebele ya bato bazingelaki Ye, Yesu amataki na bwato mpe avandaki kati na yango, wana bato nyonso batelemaki na mokili. \v 3 Azwaki maloba mpe akomaki koteya bango makambo ebele na masese ; azalaki koloba : \pi1 \wj — Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye.\wj* \v 4 \wj Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; bandeke eyaki mpe eliaki yango.\wj* \v 5 \wj Ndambo mosusu ekweyaki na esika etonda na mabanga, esika oyo mabele ezalaki mingi te, ebimisaki mito noki mpo ete mabele yango ezalaki na bozindo te ;\wj* \v 6 \wj kasi tango moyi ebimaki, mito yango ezikaki mpe ekawukaki mpo ete ezalaki na misisa te.\wj* \v 7 \wj Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube, banzube ekolaki mpe efinaki-finaki mwa banzete na yango ;\wj* \v 8 \wj kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu mpe ebotaki bambuma : nkona moko ebotaki bambuma nkama moko ; mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe mosusu, bambuma tuku misato.\wj* \v 9 \wj Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !\wj* \r (Mlk 4.10-12; Lk 8.9-10) \p \v 10 Bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe batunaki Ye : \pi1 — Mpo na nini ozali koloba na bango na masese ? \p \v 11 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Ezali mpo ete boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Likolo epesameli nde na bino, kasi na bango te.\wj* \v 12 \wj Na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu mpe akokoma na bofuluki ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.\wj* \v 13 \wj Tala mpo na nini nazali koloba na bango na masese :\wj* \q1 \wj ezali mpo ete atako bazali kotala, bamona te ;\wj* \q2 \wj mpe atako bazali koyoka, basosola te.\wj* \mi \v 14 \wj Maloba oyo mosakoli Ezayi asakola mpo na bango ekokisami :\wj* \q1 \wj « Matoyi na bino ekoyoka na pamba, kasi bokososola te ;\wj* \q2 \wj miso na bino ekotala na pamba, kasi bokomona te !\wj* \q1 \v 15 \wj Pamba te mitema ya bato oyo ezali mabanga ;\wj* \q2 \wj bakangi penza matoyi mpe miso na bango,\wj* \q1 \wj noki te miso na bango emona,\wj* \q2 \wj matoyi na bango eyoka,\wj* \q1 \wj mitema na bango esosola,\wj* \q2 \wj mpe babongola mitema, mpe Ngai nabikisa bango. »\wj* \mi \v 16 \wj Nzokande bino, bozali bato ya esengo, pamba te miso na bino ezali komona, mpe matoyi na bino ezali koyoka.\wj* \v 17 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : basakoli ebele mpe bato ebele ya sembo balukaki komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te ; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.\wj* \s1 Ndimbola ya lisese ya moloni \r (Mlk 4.13-20; Lk 8.11-15) \pi1 \v 18 \wj Boyoka ndimbola ya lisese ya moloni :\wj* \v 19 \wj Soki moto ayoki Liloba na tina na Bokonzi ya Likolo mpe asosoli yango te, Satana ayaka kolongola oyo elonamaka kati na motema ya moto yango. Yango nde ndimbola ya nkona oyo ekweyi pembeni ya nzela.\wj* \v 20 \wj Nkona oyo ekweyi na mabele etonda na mabanga ezali moto oyo ayoki Liloba mpe ayambi yango mbala moko na esengo.\wj* \v 21 \wj Kasi mpo ete azwi nanu misisa te kati na kondima, akowumela kaka mpo na mwa tango moke. Soki kaka, likolo ya Liloba, pasi to minyoko ekweyeli ye, asundoli mbala moko kondima na ye.\wj* \v 22 \wj Nkona oyo ekweyi kati na banzube ezali moto oyo ayoki Liloba, kasi baposa mabe ya mokili mpe lokoso ya bomengo efini-fini Liloba kati na ye. Boye akotikala mpe kobota bambuma te.\wj* \v 23 \wj Nkona oyo ekweyi na mabele ya malamu ezali moto oyo ayoki Liloba mpe asosoli yango malamu ; bongo akobota bambuma : epai ya moko, bambuma ekoki komonana nkama moko ; epai ya mosusu, bambuma tuku motoba ; mpe epai ya mosusu lisusu, bambuma tuku misato.\wj* \s1 Lisese ya matiti mabe \p \v 24 Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : \wj « Bokonzi ya Likolo ekokani na moto oyo alonaki nkona ya malamu kati na elanga na ye.\wj* \v 25 \wj Wana bato nyonso balalaki pongi, monguna na ye ayaki, alonaki matiti mabe kati na elanga na ye ya ble mpe akendeki.\wj* \v 26 \wj Tango ble ebandaki kobota mpe kobimisa mito ya bambuma, matiti mabe mpe ekolaki.\wj* \v 27 \wj Basali ya nkolo elanga bayaki mpe balobaki : ‹ Mokonzi ; boni, olonaki te nkona ya malamu kati na elanga na yo ? Bongo matiti mabe oyo, ewuti wapi ? ›\wj* \p \v 28 \wj Nkolo elanga azongisaki : ‹ Ezali monguna nde asali bongo ! ›\wj* \p \wj Basali batunaki lisusu : ‹ Olingi tokende kopikola yango ? ›\wj* \p \v 29 \wj Nkolo elanga azongisaki : ‹ Bokende te ! Pamba te wana bokobanda kolongola matiti mabe, bokoki mpe kopikola ble elongo na yango.\wj* \v 30 \wj Botika nyonso mibale ekola esika moko kino na tango ya kobuka bambuma. Ezali na tango wana nde nakoloba na bato oyo babukaka bambuma : Bolongola liboso matiti mabe, bokanga yango maboke-maboke mpe botumba yango ; kasi bobuka ble mpe botia yango na ebombelo na Ngai ya bambuma. › »\wj* \s1 Lisese ya mbuma ya mutarde mpe ya levire \r (Mlk 4.30-32; Lk 13.18-19) \p \v 31 Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : \wj « Bokonzi ya Likolo ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye.\wj* \v 32 \wj Nkona yango eleki bankona nyonso na moke ; kasi soki ekoli, elekaka bandunda nyonso ya elanga na molayi mpe ekomaka monene ; ebimisaka bitape minene oyo esalaka ete bandeke ya likolo etonga zala na yango na bitape na yango. »\wj* \r (Lk 13.20-21) \p \v 33 Yesu ayebisaki bango lisese mosusu : \wj « Bokonzi ya Likolo ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki. »\wj* \r (Mlk 4.33-34) \p \v 34 Yesu azalaki kosalela masese mpo na koloba makambo wana nyonso epai ya ebele ya bato ; mpe na tango nyonso oyo azalaki koloba na bango, azangaki te kosalela masese. \v 35 Ezalaki ndenge wana nde maloba ya mosakoli ekokisamaki : \q1 « Nakofungola monoko mpo na koyebisa bango makambo na masese, \q2 nakosakola makambo oyo ebombama wuta na ebandeli ya mokili. » \s1 Ndimbola ya lisese ya matiti mabe \p \v 36 Bongo Yesu atikaki ebele ya bato mpe akotaki na ndako. Bayekoli na Ye bayaki epai na Ye mpe batunaki Ye : \pi1 — Pesa biso ndimbola ya lisese ya matiti mabe kati na elanga. \p \v 37 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Moloni nkona ya malamu, ezali Mwana na Moto.\wj* \v 38 \wj Elanga ezali mokili, nkona ya malamu ezali bana ya Bokonzi ya Likolo, mpe matiti mabe ezali bana ya Satana ;\wj* \v 39 \wj monguna oyo alonaki matiti mabe ezali Satana, tango ya kobuka mbuma ezali suka ya mokili ; bongo bato oyo babukaka bambuma, ezali ba-anjelu.\wj* \pi1 \v 40 \wj Ndenge bapikolaka matiti mabe mpe batumbaka yango na moto, ndenge wana mpe ekozala na suka ya mokili :\wj* \v 41 \wj Mwana na Moto akotinda ba-anjelu na Ye ; bongo bakolongola kati na Bokonzi na Ye, nyonso oyo etindikaka bato mosusu na kosala masumu mpe bato oyo basalaka mabe.\wj* \v 42 \wj Bakobwaka bango na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.\wj* \v 43 \wj Bongo bato ya sembo bakongenga lokola moyi kati na Bokonzi ya Tata na bango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !\wj* \s1 Lisese ya eloko ya talo mpe ya mayaka \pi1 \v 44 \wj Bokonzi ya Likolo ekokani na eloko ya talo oyo babomba kati na elanga ; soki moto moko amoni yango, akobomba yango lisusu ; mpe na esengo wana, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba elanga wana.\wj* \v 45 \wj Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na moto ya mombongo, oyo alukaka bapawuni ya kitoko.\wj* \v 46 \wj Soki amoni mayaka moko ya talo makasi, akokende koteka biloko na ye nyonso mpo na kosomba yango.\wj* \s1 Lisese ya monyama \pi1 \v 47 \wj Bokonzi ya Likolo ekokani lisusu na monyama oyo balobi mbisi babwaki na ebale mpe ekangi bambisi ya ndenge na ndenge.\wj* \v 48 \wj Soki etondi, balobi mbisi bakobimisa yango na mokili, bakovanda mpe bakotia bambisi ya malamu kati na bitunga mpe bakobwaka oyo ya mabe.\wj* \v 49 \wj Ekozala mpe ndenge wana na suka ya mokili : ba-anjelu bakoya kokabola bato mabe kati na bato ya sembo,\wj* \v 50 \wj bongo bakobwaka bato mabe kati na fulu ya moto makasi epai wapi ekozala kolela mpe koswa minu.\wj* \pi1 \v 51 \wj Boni, bososoli makambo oyo nyonso ?\wj* \p Bazongisaki : \pi1 — Iyo ! \p \v 52 Bongo, Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Yango wana, molakisi nyonso ya mibeko, oyo akomi moyekoli ya makambo ya Bokonzi ya Likolo akokani na nkolo ndako oyo azali kobimisa na ebombelo bomengo na ye : biloko ya sika mpe biloko ya kala.\wj* \s1 Bato ya Nazareti batioli Yesu \r (Mlk 6.1-6; Lk 4.1-30) \p \v 53 Sima na Yesu koloba masese wana, alongwaki na esika yango \v 54 mpe azongaki kati na engumba na Ye ; akomaki koteya bato kati na ndako na bango ya mayangani, mpe bango bazalaki kokamwa makasi mpe komituna : « Bwanya mpe nguya ya kosala bikamwa oyo azwi yango wapi ? \v 55 Ezali ye te mwana ya mosali mabaya ? Mama na ye, kombo na ye ezali Mari te ? Jake, Jozefi, Simona mpe Jide bazali bandeko na ye ya mibali te ? \v 56 Bongo bandeko na ye ya basi, bango nyonso bazali awa elongo na biso te ? Azwi makambo oyo nyonso wapi ? » \p \v 57 Boye, azalaki libaku mpo na kondima na bango. Kasi Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Ezali kaka kati na ekolo na ye mpe kati na ndako na ye nde Mosakoli azwaka lokumu te.\wj* \p \v 58 Mpe asalaki kuna bikamwa mingi te mpo ete bazalaki kondima Ye te. \c 14 \s1 Erode mpe Yesu \r (Mlk 6.14-29; Lk 9.7-9; 3.19-20) \p \v 1 Na tango wana, sango na tina na Yesu epanzanaki makasi mpe ekomaki kino na matoyi ya Erode, moyangeli ya Galile. \v 2 Alobaki na basali na ye : \pi1 — Ezali penza Yoane Mobatisi ! Asekwi kati na bakufi ; yango wana azali na nguya ya kosala bikamwa. \s1 Kufa ya Yoane Mobatisi \r (Mlk 6.17-29; Lk 3.19-20) \p \v 3 Nzokande, Erode amipeselaki mitindo ete bazwa Yoane, bakanga ye minyololo mpe babwaka ye kati na boloko, likolo ya Erodiade, mwasi ya Filipo, ndeko mobali ya Erode ; \v 4 pamba te Yoane azalaki koloba na ye : « Ozali na ndingisa te ya kosangisa na ye nzoto mpo ete azali mwasi na yo te. » \v 5 Boye, Erode akomaki koluka nzela ya koboma Yoane, kasi azalaki kobanga bato mpo ete bazalaki kozwa Yoane lokola mosakoli. \v 6 Nzokande, na mokolo ya kosepela mbotama ya Erode, mwana mwasi ya Erodiade abinaki liboso ya babengami na feti yango mpe asepelisaki Erode makasi. \v 7 Boye, Erode alakaki mwasi yango, na nzela ya ndayi, ete akopesa ye nyonso oyo akosenga. \v 8 Lokola mama akotisaki makanisi mabe kati na mwana, mwana mwasi alobaki na Erode : « Pesa ngai awa, na sani, moto ya Yoane Mobatisi. » \v 9 Tango mokonzi ayokaki eloko oyo mwana mwasi asengaki, ayokaki mawa mingi na motema ; kasi mpo na ndayi oyo alapaki mpe mpo na bato oyo abengisaki na feti, apesaki mitindo ete bapesa ye moto yango. \v 10 Atindaki moto moko ete akende kokata moto ya Yoane kati na boloko. \v 11 Bamemaki, na sani, moto ya Yoane Mobatisi mpe bapesaki yango epai ya mwana mwasi, mpe mwana mwasi amemaki yango epai ya mama na ye. \v 12 Bayekoli ya Yoane bayaki kozwa nzoto na ye mpe bakundaki yango ; sima na yango, bakendeki kopesa sango epai ya Yesu. \s1 Yesu aleisi mibali nkoto mitano \r (Mlk 6.30-44; Lk 9.10-17; Yn 6.1-15) \p \v 13 Tango Yesu ayokaki sango yango, azwaki bwato mpo na kokende kati na esobe, na esika oyo akozala kaka Ye moko. Wana ebele ya bato bayokaki bongo, babimaki na bamboka na bango mpe balandaki Yesu na makolo. \v 14 Tango Yesu akitaki wuta na bwato mpe amonaki ebele ya bato penza, ayokaki mawa makasi mpo na bango. Boye, abandaki kobikisa bandeko na bango, oyo bazalaki kobela. \p \v 15 Na pokwa, bayekoli bapusanaki pene na Yesu mpe balobaki na Ye : \pi1 — Esika oyo ezali esobe, mpe ngonga epusani makasi ! Zongisa bango mpo ete bakende komisombela biloko ya kolia kati na bamboka ya zingazinga. \p \v 16 Kasi Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bazali na tina na kokende kuna te ! Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.\wj* \p \v 17 Bayekoli bazongisaki : \pi1 — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale. \p \v 18 Yesu alobaki : \pi1 \wj — Boya na yango awa epai na Ngai.\wj* \p \v 19 Yesu apesaki mitindo na bato ete bavanda na matiti ; azwaki mapa mitano mpe bambisi mibale yango, atombolaki miso na Ye na likolo mpe azongisaki matondi epai ya Nzambe ; akataki mapa yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye mpo ete bakabola yango epai ya bato. \v 20 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale. \v 21 Bato oyo baliaki bazalaki mibali pene nkoto mitano, longola basi mpe bana. \s1 Yesu atamboli na mayi \r (Mlk 6.45-52; Yn 6.16-21) \p \v 22 Mbala moko, Yesu atindaki bayekoli na Ye ete bamata na bwato mpe bakende liboso na Ye, na ngambo mosusu ya ebale, wana akozongisa bato. \v 23 Sima na Ye kozongisa bato, amataki na ngomba mpo na kosambela na esika oyo azalaki kaka Ye moko. Kino na pokwa, azalaki wana kaka Ye moko. \v 24 Nzokande, kaka na tango yango, wana bwato ekomaki mosika, na molayi ya bametele koleka nkama moko longwa na mokili, mbonge ekomaki koningisa bwato yango makasi, pamba te mopepe ezalaki kobeta na ndenge ya kozongisa bwato na sima. \p \v 25 Wana tongo ekomaki pene ya kotana, Yesu atambolaki likolo ya mayi ya ebale mpo na kolanda bango, mpe alingaki kutu koleka bango. \v 26 Tango bayekoli bamonaki Yesu azali kotambola likolo ya mayi ya ebale, somo makasi ekangaki bango mpe bakomaki koloba : \pi1 — Elima ! Elima ! Elima ! \p Bagangaki mpo na somo. \v 27 Kasi, mbala moko, Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali nde Ngai !\wj* \p \v 28 Petelo alobaki na Ye : \pi1 — Nkolo, soki ezali penza Yo, loba na ngai ete naya kokutana na Yo likolo ya mayi. \p \v 29 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Yaka.\wj* \p Mbala moko, Petelo akitaki na bwato mpe atambolaki na likolo ya mayi mpo na kokende kokutana na Yesu. \v 30 Kasi tango amonaki ndenge mopepe ezali kopepa makasi, akomaki na somo mpe, lokola akomaki kozinda, agangaki : \pi1 — Nkolo, bikisa ngai ! \p \v 31 Mbala moko, Yesu asembolaki loboko epai na ye, asimbaki ye mpe alobaki na ye : \pi1 \wj — Moto na kondima moke, mpo na nini otie tembe ?\wj* \p \v 32 Tango bamataki na bwato, mopepe ekitaki. \v 33 Bato oyo bazalaki kati na bwato bagumbamelaki Yesu mpe balobaki : \pi1 — Ya solo, ozali Mwana na Nzambe ! \s1 Yesu abikisi babeli na Genezareti \r (Mlk 6.53-56) \p \v 34 Sima na bango kokatisa ebale, bakomaki na mabele ya Genezareti. \v 35 Tango bavandi ya esika wana basosolaki ete ezali Yesu, bapanzaki sango kati na etuka mobimba ; mpe bamemelaki Ye babeli nyonso. \v 36 Basengaki na Ye ete apesa babeli nzela ya kosimba ata singa ya songe ya elamba na Ye. Mpe bato nyonso oyo balongaki kosimba yango babikaki na bokono na bango. \c 15 \s1 Yesu mpe bokoko ya Bayuda \r (Mlk 7.1-23) \p \v 1 Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bawutaki na Yelusalemi bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye : \pi1 \v 2 — Mpo na nini bayekoli na yo bazali kotosa te bokoko na biso ? Pamba te basukolaka maboko na bango te liboso ya kolia. \p \v 3 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Bongo bino, mpo na nini botosaka te mibeko ya Nzambe, kasi botosaka kaka bokoko na bino ?\wj* \v 4 \wj Solo, Nzambe alobaki : « Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu ; mpe moto oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe asengeli na etumbu ya kufa. »\wj* \v 5 \wj Kasi bino, bolobaka : « Moto nyonso oyo alobi na tata na ye to na mama na ye : ‹ Lisungi oyo nalingaki kopesa yo, nabonzi yango lokola likabo epai ya Nzambe, ›\wj* \v 6 \wj abuki te mobeko ya kopesa tata na ye mpe mama na ye lokumu. » Ezali ndenge wana penza nde bozali kokomisa pamba Liloba na Nzambe mpo na kotombola bokoko na bino !\wj* \v 7 \wj Bato ya bilongi mibale ! Ezayi asakola penza malamu na tina na bino :\wj* \q1 \v 8 \wj « Bato oyo bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu,\wj* \q2 \wj kasi mitema na bango ezali mosika na Ngai ;\wj* \q1 \v 9 \wj basambelaka Ngai kaka na pamba,\wj* \q2 \wj mateya na bango ezali kaka mibeko ya bomoto. »\wj* \r (Mlk 7.14-23) \p \v 10 Yesu abengaki ebele ya bato wana mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Boyoka mpe bososola makambo oyo :\wj* \v 11 \wj eloko oyo ekotaka na monoko ya moto ekomisaka moto mbindo te, kasi ezali eloko oyo ebimaka na monoko nde ekomisaka moto mbindo.\wj* \p \v 12 Bongo bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe bayebisaki Ye : \pi1 — Boni, oyebi te ete maloba oyo olobi ebetisi Bafarizeo mabaku ? \p \v 13 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Nkona nyonso oyo Tata na Ngai ya Likolo alonaki te ekopikolama.\wj* \v 14 \wj Botika bango ; bazali bakufi miso oyo bazali kotambolisa bakufi miso mosusu. Nzokande, soki mokufi miso azali kotambolisa mokufi miso mosusu, bango mibale bakokweya solo kati na libulu.\wj* \p \v 15 Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu : \pi1 — Limbolela biso lisese oyo. \p \v 16 Yesu atunaki bango : \pi1 \wj — Bino mpe, boni, bozwi nanu bososoli te ?\wj* \v 17 \wj Bozali kaka kososola te ete nyonso oyo ekotaka na monoko ekendaka na libumu mpe, na sima, ebwakamaka na libulu ya zongo ?\wj* \v 18 \wj Kasi oyo ebimaka na monoko, ewutaka nde na motema, mpe yango nde ekomisaka moto mbindo.\wj* \v 19 \wj Pamba te, na motema nde ewutaka makanisi mabe, koboma, ekobo, kindumba, moyibi, litatoli ya lokuta mpe mafinga.\wj* \v 20 \wj Ezali makambo wana nde ekomisaka moto mbindo ; kasi kozanga kosukola maboko liboso ya kolia ekomisaka moto mbindo te.\wj* \s1 Mwasi mopaya andimeli Yesu \r (Mlk 7.24-30) \p \v 21 Yesu alongwaki wana mpe akendeki na etuka ya Tiri mpe ya Sidoni. \v 22 Mwasi moko ya mboka Kanana azalaki kovanda na etuka yango, ayaki epai ya Yesu mpe akomaki koganga : \pi1 — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! Mwana na ngai ya mwasi azali na se ya bokonzi ya molimo mabe oyo ezali mpe konyokola ye makasi. \p \v 23 Kasi Yesu azongiselaki ye ata liloba te. Bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe basengaki na Ye : \pi1 — Bengana ye ; azali kotiela biso makelele ! \p \v 24 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Natindamaki kaka epai ya bameme ebunga ya Isalaele !\wj* \p \v 25 Kasi mwasi yango ayaki, agumbamaki liboso ya Yesu mpe alobaki : \pi1 — Nkolo, sunga ngai ! \p \v 26 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Ezali malamu te kokamata lipa ya bana mpo na kobwakela yango bambwa !\wj* \p \v 27 Mwasi yango alobaki : \pi1 — Nkolo, ezali penza ya solo ; kasi bambwa eliaka biteni ya lipa, oyo ekweyaka wuta na mesa ya bankolo na yango ! \p \v 28 Bongo Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Mwasi, kondima na yo ezali monene ! Tika ete esalemela yo ndenge ezali posa na yo !\wj* \p Mpe kaka na tango wana, mwana na ye ya mwasi abikaki. \s1 Yesu abikisi babeli ebele \r (Mlk 7.31-37) \p \v 29 Yesu alongwaki wana mpe akendeki na ebale ya Galile ; amataki likolo ya ngomba mpe avandaki kuna. \v 30 Bato ebele bayaki epai na Ye ; bamemaki bato oyo batambolaka tengu-tengu, bakufi miso, bababa, bato oyo bakufa makolo to maboko mpe bato mosusu ebele. Batiaki bango na makolo ya Yesu, mpe Yesu abikisaki bango. \v 31 Mpe bato bakamwaki mingi tango bamonaki ete bababa bakomi koloba, bato oyo bakufa makolo to maboko babiki, bato oyo batambolaka tengu-tengu bakomi kotambola malamu mpe bakufi miso bakomi komona. Bongo bakumisaki Nzambe ya Isalaele. \s1 Yesu aleisi bato nkoto minei \r (Mlk 8.1-10; Mat 14.13-21) \p \v 32 Yesu abengaki bayekoli na Ye mpe alobaki : \pi1 \wj — Nazali koyokela ebele ya bato oyo mawa makasi, pamba te basali mikolo misato elongo na Ngai mpe bazali na eloko ya kolia te. Naboyi kozongisa bango na nzala, noki te bakolemba nzoto na nzela.\wj* \p \v 33 Bayekoli na Ye bazongisaki : \pi1 — Kati na esobe oyo, esika nini tokozwa mapa mpo na koleisa ebele ya bato boye ? \p \v 34 Yesu atunaki bango : \pi1 \wj — Bozali na mapa boni ?\wj* \p Bayekoli bazongisaki : \pi1 — Tozali na mapa sambo mpe ndambo ya bambisi ya mike-mike. \p \v 35 Yesu alobaki na ebele ya bato yango ete bavanda na mabele. \v 36 Bongo azwaki mapa yango sambo mpe bambisi, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki biteni na yango epai ya bayekoli na Ye ; mpe bayekoli bakabolaki yango epai ya bato. \v 37 Bato nyonso baliaki mpe batondaki. Bongo bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, batondisaki na yango bitunga sambo. \v 38 Motango ya bato oyo baliaki ezalaki nkoto minei, longola basi mpe bana. \v 39 Sima na Yesu kozongisa bato, amataki kati na bwato mpe akendeki na etuka ya Magadani. \c 16 \s1 Yesu mpe bakonzi ya lingomba ya Bayuda \r (Mat 12.38-39; Mlk 8.11-13; Lk 11.16, 29; 12.54-56) \p \v 1 Bafarizeo mpe Basaduseo bayaki epai na Yesu mpo na kotiela Ye motambo ; basengaki na Ye ete alakisa bango elembo moko kowuta na Likolo. \p \v 2 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Na pokwa, bolobaka : « Mokolo ya lobi ekozala mokolo malamu, pamba te likolo ezali motane ! »\wj* \v 3 \wj Mpe na tongo, bolobaka : « Mvula makasi ekobeta lelo, pamba te mapata eyindi. » Solo, boyebi kososola bilembo oyo elakisaka soki mvula ekobeta to ekobeta te, kasi bozangi makoki ya kososola bilembo ya tango !\wj* \v 4 \wj Oh bato ya ekeke oyo ! Bazali bato mabe mpe bazangi botosi na miso ya Nzambe, kasi bazali mpe kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te longola kaka elembo ya Yona.\wj* \p Bongo atikaki bango wana mpe akendeki. \r (Mlk 8.14-21) \p \v 5 Tango bayekoli bakatisaki na ngambo mosusu ya ebale, babosanaki komema mapa. \v 6 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo !\wj* \p \v 7 Bayekoli bakomaki kokanisa mpe komituna bango na bango : \pi1 — Azali koloba bongo mpo ete tomemi mapa te ! \p \v 8 Yesu asosolaki makanisi na bango ; alobaki : \pi1 \wj — Bato ya kondima moke ! Bozali kolobana bino na bino mpo ete bozali na mapa te ! Mpo na nini ?\wj* \v 9 \wj Boni, bozwi kaka bososoli nanu te ? Bobosani penza mapa mitano oyo bokabolelaki bato nkoto mitano, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ?\wj* \v 10 \wj Bobosani lisusu mapa sambo oyo bokabolelaki bato nkoto minei, mpe motango ya bitunga oyo bozongaki na yango sima na kokabolela bato ?\wj* \v 11 \wj Ndenge nini bozali kososola te ete nazalaki koloba na tina na mapa te, tango nalobaki na bino : bosala keba na levire ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo ?\wj* \p \v 12 Boye, bayekoli basosolaki ete alobaki na bango te ete basala keba na levire ya mapa, kasi nde basala keba na mateya ya Bafarizeo mpe ya Basaduseo. \s1 Petelo andimi ete Yesu azali Mwana na Nzambe \r (Mlk 8.27-30; Lk 9.18-21; Yn 6.66-71) \p \v 13 Tango Yesu akomaki na etuka ya Sezarea ya Filipo, atunaki bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Bato balobaka ete Mwana na Moto azali nani ?\wj* \p \v 14 Bazongisaki : \pi1 — Bamoko balobaka ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, Jeremi to moko kati na basakoli. \p \v 15 Yesu atunaki bango lisusu : \pi1 \wj — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ?\wj* \p \v 16 Simona Petelo azongisaki : \pi1 — Ozali Masiya, Mwana na Nzambe na bomoi. \p \v 17 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Esengo na yo Simona, mwana mobali ya Yona ! Pamba te ezali moto te nde ayebisi yo makambo oyo, kasi Tata na Ngai, oyo azali kati na Likolo.\wj* \v 18 \wj Mpe Ngai, nazali koloba na yo : Ozali Libanga, mpe ezali na likolo ya libanga oyo nde Ngai nakotonga Lingomba na Ngai ; bongo bikuke ya mboka ya bakufi ekotikala kolonga yango te.\wj* \v 19 \wj Nakopesa yo bafungola ya Bokonzi ya Likolo ; nyonso oyo okokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo okofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.\wj* \p \v 20 Bongo Yesu apekisaki makasi bayekoli na Ye koloba na moto ete Ye azali Masiya. \s1 Yesu asakoli kufa mpe lisekwa na Ye \r (Mlk 8.31–9.1; Lk 9.22-27) \p \v 21 Wuta na tango wana, Yesu akomaki koloba polele na bayekoli na Ye ete asengeli kokende na Yelusalemi, asengeli komona pasi mingi na maboko ya bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko ; basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato. \p \v 22 Petelo abendaki Yesu na pembeni mpe akomaki kopamela Ye : \pi1 — Nkolo, tika ete Nzambe abatela Yo mosika ya makambo wana ! Ekokomela Yo te ! \p \v 23 Kasi Yesu abalukaki, alobaki na Petelo : \pi1 \wj — Mosika na Ngai, Satana ! Ozali epekiselo mpo na Ngai ! Makanisi na yo ezali makanisi ya Nzambe te, ezali penza makanisi ya bato.\wj* \s1 Ndenge nini kolanda Yesu \r (Mlk 8.34–9.1; Lk 9.23-27) \p \v 24 Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya ye moko, kokamata ekulusu na ye mpe kolanda Ngai.\wj* \v 25 \wj Pamba te moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akozwa yango lisusu.\wj* \v 26 \wj Litomba nini ekozala mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi abungisi bomoi na ye ? Moto akoki penza kopesa nini mpo na kosikola bomoi na ye ?\wj* \v 27 \wj Pamba te Mwana na Moto akoya elongo na ba-anjelu na Ye kati na nkembo ya Tata na Ye mpe akofuta moto nyonso kolanda misala na ye.\wj* \pi1 \v 28 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona Mwana na Moto koya kati na nkembo ya bokonzi na Ye.\wj* \c 17 \s1 Nzoto ya Yesu ebongwani \r (Mlk 9.2-10; Lk 9.28-36) \p \v 1 Sima na mikolo motoba, Yesu azwaki Petelo, Jake mpe Yoane, ndeko mobali ya Jake ; amemaki bango na pembeni, na likolo ya ngomba moko ya molayi. \v 2 Yesu abongolamaki na miso na bango : elongi na Ye ekomaki kongenga lokola moyi, bilamba na Ye ekomaki pembe makasi lokola pole. \v 3 Mbala moko, bamonaki Moyize mpe Eliya bazali kosolola na Yesu. \p \v 4 Petelo alobaki na Yesu : \pi1 — Nkolo, eleki malamu mpo na biso kotikala awa ! Soki ondimi, nakotonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya ! \p \v 5 Wana azalaki nanu koloba, lipata moko ezalaki kongenga lokola moyi, ezipaki bango, mpe mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango : « Oyo azali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Ye mingi ; boyoka Ye ! » \p \v 6 Tango bayekoli bayokaki mongongo yango, bakweyaki bilongi kino na mabele mpo ete somo makasi ekangaki bango. \v 7 Kasi Yesu apusanaki pene na bango, asimbaki bango mpe alobaki : \pi1 \wj — Botelema, bobanga te !\wj* \p \v 8 Batombolaki miso mpe bamonaki moto mosusu te, kaka Yesu. \p \v 9 Wana bazalaki kokita na ngomba, Yesu apesaki bango mitindo oyo : \pi1 \wj — Makambo oyo bowuti komona, boyebisa yango na moto moko te kino tango Mwana na Moto akosekwa kati na bakufi.\wj* \r (Mlk 9.10-13) \p \v 10 Bayekoli batunaki Yesu : \pi1 — Mpo na nini balakisi ya Mobeko balobaka ete Eliya asengeli koya moto ya liboso ? \p \v 11 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Solo, Eliya asengeli koya mpe akozongisa makambo nyonso na molongo.\wj* \v 12 \wj Kasi Ngai, nazali koloba na bino ete Eliya asilaki koya ; kasi na esika ya koyeba ye, basalaki ye ndenge balingaki. Ezali mpe ndenge wana nde bakonyokola Mwana na Moto.\wj* \p \v 13 Bayekoli basosolaki ete azalaki kolobela bango na tina na Yoane Mobatisi. \s1 Yesu abikisi mwana na molimo mabe \r (Mlk 9.14-29; Lk 9.37-43) \p \v 14 Tango bakomaki pene ya esika oyo ebele ya bato bazalaki, moto moko apusanaki pene na Yesu, afukamaki liboso na Ye mpe alobaki : \pi1 \v 15 — Nkolo, yokela mwana na ngai ya mobali mawa ! Azali na maladi ya ndeke mpe azali penza komona pasi : akweyaka mbala mingi na moto to na mayi. \v 16 Namemaki ye epai ya bayekoli na Yo, kasi bakoki te kobikisa ye. \p \v 17 Yesu alobaki : \pi1 \wj — Ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima ! Kino tango nini nakozala na bino elongo ? Kino tango nini nakokanga motema mpo na bino ? Bomemela Ngai mwana yango.\wj* \p \v 18 Yesu abenganaki molimo mabe, mpe molimo mabe yango ebimaki kati na mwana. Kaka na tango yango, mwana abikaki. \p \v 19 Bongo bayekoli bakendeki na nkuku epai ya Yesu mpe batunaki : \pi1 — Mpo na nini, biso, tolongaki te kobengana molimo yango ? \p \v 20 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Ezali mpo ete bozali na kondima moke. Nazali koloba na bino penza ya solo : soki kondima na bino ezalaki lokola mbuma ya mutarde, bokokaki koloba na ngomba oyo : « Longwa awa, kende kuna ; » mpe ekokende penza. Eloko moko te ekoki kozanga kosalemela bino.\wj* [ \v 21 \wj Kasi lolenge oyo ya milimo mabe ebimaka kaka na nzela ya mabondeli mpe ya kokila bilei.\wj*]\f + \fr 17.21 \fr*\ft Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.\ft*\f* \s1 Yesu alobeli kufa mpe lisekwa na Ye \r (Mlk 9.30-32; Lk 9.43-45) \p \v 22 Mokolo moko, bayekoli basanganaki bango nyonso kati na Galile ; Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bakokaba Mwana na Moto na maboko ya bato,\wj* \v 23 \wj bakoboma Ye, mpe, na mokolo ya misato, akosekwa.\wj* \p Bayekoli bayokaki mawa mingi. \s1 Yesu mpe Petelo bafuti mpako \p \v 24 Tango Yesu mpe bayekoli na Ye bakomaki na Kapernawumi, bafutisi mpako ya Ndako ya Nzambe bayaki epai ya Petelo mpe batunaki : \pi1 — Boni, moteyi na bino afutaka mpako ya Ndako ya Nzambe te ? \p \v 25 Petelo azongisaki : \pi1 — Afutaka ! \p Tango Petelo akotaki na ndako, Yesu azwaki maloba moto ya liboso mpe atunaki ye : \pi1 \wj — Simona, okanisi nini ? Banani bafutaka mpako epai ya bakonzi ya mokili : bana na bango to bapaya ?\wj* \p \v 26 Petelo azongisaki : \pi1 — Bapaya. \p Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Lokola ezali bongo, bana mboka basengeli kofuta te.\wj* \v 27 \wj Nzokande, mpo ete totia mobulu te kati na makanisi na bango, kende na ebale, bwaka ndobo na mayi mpe kamata mbisi oyo okozwa ya liboso ; fungola monoko na yango mpe okomona mbongo moko ya bibende kati na yango ; kamata mbongo yango mpe futa mpako na Ngai mpe mpako na yo, na maboko na bango.\wj* \c 18 \s1 Lingomba ya Masiya \s2 Nani aleki monene ? \r (Mlk 9.33-37; Lk 9.46-48) \p \v 1 Na tango wana, bayekoli bapusanaki pene ya Yesu mpe batunaki Ye : \pi1 — Nani aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo ? \p \v 2 Yesu abengaki mwana moko ya moke, atiaki ye na kati-kati na bango \v 3 mpe alobaki : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bobongwani te mpe bokomi te lokola bana mike, bokotikala kokota te na Bokonzi ya Likolo.\wj* \v 4 \wj Yango wana, moto nyonso oyo akomikitisa lokola mwana oyo, ye nde aleki monene kati na Bokonzi ya Likolo.\wj* \v 5 \wj Moto nyonso oyo, na Kombo na Ngai, akoyamba mwana lokola oyo, ayambi nde Ngai moko.\wj* \s2 Makebisi \r (Mlk 9.42-48; Lk 17.1-2) \pi1 \v 6 \wj Kasi soki moto moko akweyisi na masumu moko kati na bana mike oyo bandimelaka Ngai, ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo na kingo mpe kobwaka ye na ebale.\wj* \v 7 \wj Mawa na mokili, pamba te makambo oyo ekweyisaka bato kati na masumu ezali ebele ! Solo, makambo yango esengeli kaka kozala ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !\wj* \v 8 \wj Soki loboko to lokolo na yo ekweyisaka yo na masumu, kata mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na loboko moko to na lokolo moko, na esika ete otikala na maboko mibale to makolo mibale mpe obwakama na moto ya libela na libela.\wj* \v 9 \wj Soki liso na yo ekweyisaka yo na masumu, longola yango mpe bwaka yango mosika na yo ; pamba te eleki malamu mpo na yo kokota kati na bomoi, na liso moko, na esika ete okoba kozala na miso mibale mpe obwakama na moto ya lifelo.\wj* \r (Lk 15.1-7) \pi1 \v 10 \wj Bosala keba ete botiola ata moko te kati na bana oyo, pamba te nazali koloba na bino ete ba-anjelu na bango kuna na Likolo bamonaka tango nyonso elongi ya Tata na Ngai, oyo azali na Likolo.\wj* \s2 Lisese ya meme oyo ebungi \r (Lk 15.1-7) \pi1 [ \v 11 \wj Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na kobikisa bato oyo babunga nzela.\wj*]\f + \fr 18.11 \fr*\ft Eteni oyo ezali te na mikanda mosusu ya kala\ft*\f* \v 12 \wj Bokanisi nini ? Soki moto moko azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi ; boni, akotika te bameme na ye tuku libwa na libwa na likolo ya ngomba mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga ?\wj* \v 13 \wj Mpe soki amoni yango, nazali koloba na bino penza ya solo, esengo na ye mpo na meme wana ekoleka esengo mpo na bameme tuku libwa na libwa oyo ebungaki te.\wj* \v 14 \wj Ndenge moko, Tata na bino oyo azali kati na Likolo alingi ete moko te kati na bana oyo abunga.\wj* \s2 Ndenge nini kolimbisa ndeko oyo asali yo mabe \pi1 \v 15 \wj Soki ndeko na yo asali yo mabe, kende kotalisa ye mabe na ye na esika ya bino mibale kaka. Soki ayokeli yo, wana ozongisi ye na nzela malamu.\wj* \v 16 \wj Kasi soki ayokeli yo te, mema moto mosusu to bato mibale, pamba te Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato.\wj* \v 17 \wj Kasi soki aboyi kaka koyokela bango, yebisa makambo yango na Lingomba. Soki aboyi mpe kaka koyokela Lingomba, zwa ye lokola mopagano mpe lokola mofutisi mpako.\wj* \pi1 \v 18 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso oyo bokokanga awa na mokili ekokangama mpe na Likolo, mpe nyonso oyo bokofungola awa na mokili ekofungwama mpe na Likolo.\wj* \pi1 \v 19 \wj Nazali lisusu koloba na bino penza ya solo : soki bato mibale kati na bino bayokani awa na mokili mpo na kosenga eloko songolo to pakala, Tata na Ngai oyo azali kati na Likolo akopesa bango yango.\wj* \v 20 \wj Pamba te na esika oyo bato mibale to bato misato basangani na Kombo na Ngai, Ngai mpe nazali wana kati na bango.\wj* \p \v 21 Bongo Petelo apusanaki pene ya Yesu mpe atunaki : \pi1 — Nkolo, mbala boni nasengeli kolimbisa ndeko na ngai tango akosala ngai mabe ? Boni, kino mbala sambo ? \p \v 22 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Nalobi na yo te kino mbala sambo, kasi kino mbala tuku sambo na sambo.\wj* \pi1 \v 23 \wj Yango wana, Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo alingaki kobongisa elongo na basali na ye makambo na ye ya misolo.\wj* \v 24 \wj Tango abandaki, bamemelaki ye mosali moko oyo azalaki na niongo na ye ya batalanta nkoto zomi.\wj* \v 25 \wj Lokola azalaki na eloko moko te mpo na kofuta, mokonzi na ye atindaki ete bateka ye, mwasi na ye, bana na ye mpe biloko na ye nyonso mpo ete niongo na ye efutama.\wj* \v 26 \wj Kasi mosali yango amibwakaki na makolo ya mokonzi, agumbamaki liboso na ye mpe asengaki : « Yikela ngai mpiko, pamba te nakofuta yo niongo nyonso ! »\wj* \pi1 \v 27 \wj Mokonzi ya mosali ayokelaki ye mawa, alimbisaki niongo na ye mpe atikaki ye kokende.\wj* \v 28 \wj Kasi tango mosali yango abimaki, akutanaki na moninga na ye ya mosala oyo adefaki epai na ye mbongo ya bibende nkama moko. Akangaki ye, akomaki kofinafina ye na kingo mpe alobaki na ye : « Futa niongo na ngai. »\wj* \pi1 \v 29 \wj Moninga na ye ya mosala afukamaki mpe asengaki na ye : « Yikela ngai mpiko, nakofuta yo niongo nyonso. »\wj* \pi1 \v 30 \wj Kasi ye aboyaki ; akendeki kosenga ete babwaka ye na boloko, kino tango akosilisa kofuta niongo nyonso.\wj* \v 31 \wj Tango baninga na ye ya mosala bamonaki ndenge makambo elekaki, bayokaki mawa mingi mpe bakendeki koyebisa makambo nyonso epai ya mokonzi na bango.\wj* \v 32 \wj Bongo mokonzi abengaki mosali wana mpe alobaki na ye : « Mosali mabe ! Ngai nalimbisaki yo niongo nyonso oyo ozalaki na yango epai na ngai, mpo ete osengaki ngai.\wj* \v 33 \wj Boni, osengelaki te koyikela moninga na yo mpiko ndenge ngai nasalaki mpo na yo ? »\wj* \pi1 \v 34 \wj Lokola mokonzi na ye azalaki na kanda, akabaki ye na maboko ya banyokoli kino tango afutaki niongo nyonso.\wj* \pi1 \v 35 \wj Ezali ndenge wana nde Tata na Ngai ya Likolo akosala bino soki moko na moko kati na bino alimbisi te ndeko na ye, na motema na ye mobimba.\wj* \c 19 \s1 Mateya na tina na koboma libala \r (Mlk 10.1-12) \p \v 1 Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana, alongwaki na Galile mpe akendeki na etuka ya Yuda, na ngambo mosusu ya Yordani. \v 2 Ebele penza ya bato balandaki Ye, mpe abikisaki bango kuna. \v 3 Bafarizeo bapusanaki pene na Ye mpo na komeka Ye ; bapesaki Ye motuna : \pi1 — Boni, mibeko na biso epesi nzela na mobali ya kobengana mwasi na ye na libala mpo na likambo songolo ? \p \v 4 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Boni, botangi te ete, na ebandeli, Mokeli « akelaki bango mobali mpe mwasi, »\wj* \v 5 \wj mpe ete alobaki : « Yango wana mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko ?\wj* \v 6 \wj Boye, bazali lisusu bato mibale te, kasi bakomi moto moko. Tika ete moto akabola te oyo Nzambe asangisi ! »\wj* \p \v 7 Kasi Bafarizeo balobaki na Ye : \pi1 — Bongo mpo na nini Moyize atindaki ete mobali apesa mwasi na ye mokanda ya koboma libala soki bakabwani na libala ? \p \v 8 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Moyize apesaki bino nzela ya kobengana basi na bino na mabala, pamba te mitema na bino ezali mabanga ; na ebandeli, ezalaki bongo te.\wj* \v 9 \wj Nazali koloba na bino : Soki mobali alongoli mwasi na ye na libala, longola kaka soki akweyaki na ekobo, mpe abali mwasi mosusu asali ekobo.\wj* \p \v 10 Bayekoli balobaki na Ye : \pi1 — Soki mobali asengeli kozala bongo liboso ya mwasi na ye, wana eleki malamu mpo na mobali ete abala te ! \p \v 11 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Mibali nyonso bakoki kondima mateya oyo te, kaka ba-oyo bapesameli makoki mpo na yango.\wj* \v 12 \wj Ezali na tina misato oyo esalaka ete mibali mosusu babala te : ezali na mibali oyo, wuta na mabumu ya bamama na bango, bakoki kobala te ; ezali na mibali oyo baboma bango mokongo ; ezali mpe lisusu na mibali oyo bango moko baboya kobala mpo na Bokonzi ya Likolo. Tika ete moto oyo azali na makoki ya kondima mateya oyo andima yango !\wj* \s1 Yesu ayambi bana mike \r (Mlk 10.13-16; Lk 18.15-17) \p \v 13 Bato bamemaki bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko mpe asambela mpo na bango. Kasi bayekoli bapamelaki bato oyo bamemaki bana yango. \v 14 Yesu alobaki : \pi1 \wj — Botika bana mike baya epai na Ngai, bopekisa bango te koya epai na Ngai ; pamba te Bokonzi ya Likolo ezali mpo na bato oyo bazali lokola bango.\wj* \p \v 15 Atielaki bango maboko, mpe alongwaki wana. \s1 Bazwi mpe Bokonzi ya Nzambe \r (Mlk 10.17-31; Lk 18.18-30) \p \v 16 Elenge mobali moko apusanaki pene na Yesu mpe atunaki : \pi1 — Moteyi, likambo nini ya malamu nasengeli kosala mpo ete nazwa bomoi ya seko ? \p \v 17 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Mpo na nini ozali kotuna Ngai na tina na oyo ezali malamu ? Moko kaka azali malamu. Soki olingi kokota kati na bomoi, tosa mibeko.\wj* \p \v 18 Elenge mobali yango atunaki lisusu : \pi1 — Mibeko nini ? \p Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Okobomaka te, okosalaka ekobo te, okoyibaka te, okolobaka litatoli ya lokuta te,\wj* \v 19 \wj okotosaka tata mpe mama na yo mpe okolingaka moninga na yo ndenge yo moko omilingaka.\wj* \p \v 20 Elenge mobali alobaki : \pi1 — Natosaka mibeko wana nyonso ; nasala lisusu nini ? \p \v 21 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Soki olingi kozala moto ya kokoka, kende, teka biloko na yo mpe pesa epai ya babola mbongo oyo okozwa ; bongo okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.\wj* \p \v 22 Tango elenge mobali ayokaki bongo, akendeki na mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi. \p \v 23 Yesu alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Likolo !\wj* \v 24 \wj Nazali koloba na bino lisusu : ezali pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga, kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.\wj* \p \v 25 Tango bayekoli bayokaki Yesu koloba bongo, bakamwaki mingi mpe bakomaki kotunana : \pi1 — Bongo nani penza akoki kobikisama ? \p \v 26 Wana Yesu atalaki bango, alobaki : \pi1 \wj — Na bato, ekoki kosalema te ; kasi na Nzambe, nyonso ekoki kosalema !\wj* \p \v 27 Petelo azwaki maloba mpe alobaki na Yesu : \pi1 — Biso, totiki nyonso mpo na kolanda Yo ! Ekozala boni mpo na biso ? \p \v 28 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : tango makambo nyonso ekokoma ya sika, tango Mwana na Moto akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo, bino bato oyo bozali kolanda Ngai, bino mpe bokovanda na bakiti zomi na mibale ya bokonzi, mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.\wj* \v 29 \wj Mpe moto nyonso oyo atiki bandako, bandeko ya mibali, bandeko ya basi, tata, mama, bana to bilanga mpo na Kombo na Ngai akozwa yango koleka mbala nkama elongo na bomoi ya seko.\wj* \pi1 \v 30 \wj Kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.\wj* \c 20 \s1 Lisese ya nkolo elanga mpe basali na ye \pi1 \v 1 \wj Pamba te, tala ndenge nini Bokonzi ya Likolo ezali : Bokonzi ya Likolo ezali lokola nkolo elanga ya vino oyo abimaki na tongo makasi mpo na koluka bato oyo bakosala na elanga na ye.\wj* \v 2 \wj Ayokanaki na bango ete moko na moko akobanda kozwa lifuti ya mbongo moko ya ebende mpo na mokolo mobimba ; bongo atindaki bango na elanga na ye ya vino.\wj* \pi1 \v 3 \wj Na ngonga ya libwa ya tongo, abimaki lisusu mpe amonaki, na esika oyo bato bakutanaka, bato mosusu oyo bazalaki kosala eloko moko te.\wj* \v 4 \wj Alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. Nakopesa bino lifuti ya sembo, oyo ekoki. »\wj* \pi1 \v 5 \wj Boye, bakendeki kuna. Nkolo elanga abimaki lisusu na ngonga ya midi mpe na ngonga ya misato sima na midi ; mpe na mbala nyonso mibale, asalaki kaka ndenge moko.\wj* \v 6 \wj Abimaki lisusu na ngonga ya mitano ya pokwa mpe amonaki lisusu bato batelemi na esika wana oyo bato bakutanaka. Atunaki bango : « Mpo na nini botelemi kaka boye mokolo mobimba na kosala eloko moko te ? »\wj* \pi1 \v 7 \wj Bazongisaki : « Soki totelemi boye, ezali mpo ete moto moko te azwi biso na mosala. »\wj* \pi1 \wj Bongo alobaki na bango : « Bino mpe bokende kosala na elanga na ngai ya vino. »\wj* \pi1 \v 8 \wj Tango pokwa ekokaki, nkolo elanga ya vino alobaki na motambolisi ya misala ya elanga : « Benga basali nyonso mpe futa bango ; banda na bato oyo nazwaki sima mpe sukisa na ba-oyo nazwaki liboso. »\wj* \pi1 \v 9 \wj Bato oyo babandaki mosala na ngonga ya mitano ya pokwa bayaki, mpe moko na moko azwaki lokola lifuti, mbongo moko ya ebende.\wj* \v 10 \wj Bongo ekomaki ngonga ya kofuta bato oyo nkolo elanga azwaki liboso na mosala ; bakanisaki ete bakozwa mbongo mingi koleka, kasi moko na moko kati na bango azwaki lokola lifuti, mbongo moko kaka ya ebende.\wj* \v 11 \wj Tango bazwaki yango, basilikelaki nkolo elanga.\wj* \v 12 \wj Balobaki : « Bato oyo ozwaki sima mpe basali kaka ngonga moko, ofuti bango ndenge moko na biso oyo tosali mosala makasi mokolo mobimba mpe na se ya moyi makasi ! »\wj* \pi1 \v 13 \wj Kasi nkolo elanga azongiselaki moko kati na bango : « Moninga na ngai, nasali yo mabe te ! Boni, toyokanaki te ete osala mpo na lifuti ya mbongo moko ya ebende ?\wj* \v 14 \wj Kamata lifuti na yo mpe kende. Ngai moko nde nalingi kopesa na moto oyo abandaki sima, lifuti ya ndenge moko na oyo napesi yo.\wj* \v 15 \wj Boni, nazali na ndingisa te ya kosala na mbongo na ngai nyonso oyo nalingi ? Osilikeli ngai mpo ete nazali moto malamu ? »\wj* \pi1 \v 16 \wj Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka.\wj* \s1 Yesu asakoli lisusu kufa mpe lisekwa na Ye \r (Mlk 10.32-34; Lk 18.31-34) \p \v 17 Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango wana bazali kotambola : \v 18 \wj « Boyoka ! Tozali solo kokende na Yelusalemi ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe ya balakisi ya Mobeko ; bakokatela Ye etumbu ya kufa\wj* \v 19 \wj mpe bakokaba Ye na maboko ya bapagano mpo ete baseka Ye, babeta Ye fimbu mpe babaka Ye na ekulusu. Mpe na mokolo ya misato, akosekwa. »\wj* \s1 Yesu mpe mama ya bana ya Zebede \r (Mlk 10.35-45; Lk 22.25-27) \p \v 20 Bongo mama ya bana mibali ya Zebede ayaki epai ya Yesu, elongo na bana na ye ya mibali, mpe agumbamaki liboso na Ye mpo na kosenga Ye eloko moko. \v 21 Yesu atunaki ye : \pi1 \wj — Olingi nini ?\wj* \p Azongisaki : \pi1 — Laka ngai ete bana na ngai mibale oyo ya mibali bakovanda kati na Bokonzi na Yo : moko na ngambo ya loboko na Yo ya mobali, mpe mosusu, na ngambo ya loboko na Yo ya mwasi. \p \v 22 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Bozali kososola te makambo oyo bozali kosenga ! Boni, bokoki komela kopo oyo Ngai nakomela ?\wj* \p Bazongisaki : \pi1 — Iyo, tokoki. \p \v 23 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Solo, bokomela na bino kopo oyo Ngai nakomela ; kasi likambo ya kovanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali to na ngambo ya loboko na Ngai ya mwasi, Ngai nakoki te kopesela yango ndingisa ; bisika wana ezali ya bato oyo Tata na Ngai abongisela bango yango.\wj* \p \v 24 Tango bayekoli mosusu zomi bayokaki makambo wana, basilikelaki bandeko mibale wana. \v 25 Kasi Yesu abengaki bango nyonso mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Boyebi malamu ete bakonzi ya bikolo bakonzaka bato ya bikolo oyo ezali na se ya bokonzi na bango, mpe bakalaka ya lokumu bakonzaka bato oyo bazali na se ya bokonzi na bango.\wj* \v 26 \wj Esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto monene kati na bino azala mosali na bino ;\wj* \v 27 \wj mpe tika ete moto nyonso oyo alingi kozala moto ya liboso kati na bino azala mowumbu na bino !\wj* \v 28 \wj Pamba te Mwana na Moto ayaki te mpo ete basalela Ye ; kasi ayaki nde kosala mpo na bato, mpe kopesa bomoi na Ye lokola motuya ya kofuta mpo na kosikola bato ebele.\wj* \s1 Yesu abikisi bakufi miso mibale \r (Mlk 10.46-52; Lk 18.35-43) \p \v 29 Tango Yesu elongo na bayekoli na Ye balongwaki na Jeriko, bato ebele balandaki Yesu. \v 30 Bakufi miso mibale bazalaki ya kovanda pembeni ya nzela ; tango bayokaki ete Yesu azali koleka, bagangaki : \pi1 — Nkolo, Mwana ya Davidi, yokela biso mawa ! \p \v 31 Bato bazalaki kopamela bango mpo ete bakanga minoko na bango, kasi bango bagangaki lisusu makasi : \pi1 — Nkolo, mwana ya Davidi, yokela biso mawa ! \p \v 32 Yesu atelemaki, abengaki bango mpe atunaki bango : \pi1 \wj — Bolingi nasala nini mpo na bino ?\wj* \p \v 33 Bazongiselaki Ye : \pi1 — Nkolo, sala ete tomona. \p \v 34 Yesu ayokelaki bango mawa mpe asimbaki miso na bango ; mpe, mbala moko, bakomaki komona mpe balandaki Ye. \c 21 \s1 Yesu akoti na Yelusalemi lokola Mokonzi \r (Mlk 11.1-11; Lk 19.28-38; Yn 12.12-19) \p \v 1 Wana bazalaki kopusana pene ya Yelusalemi mpe bakomaki pene ya Betifaje, na ngomba ya banzete ya olive, Yesu atindaki bayekoli mibale. \v 2 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino ; tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona ane ya mwasi bakanga na singa, mpe mwana ya ane pembeni na yango ; bofungola nyonso mibale mpe bomemela Ngai yango.\wj* \v 3 \wj Soki moto moko alobi na bino likambo na tina na yango, bozongisela ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. » Mpe, mbala moko, akotika yango kokende.\wj* \p \v 4 Makambo wana nyonso esalemaki mpo ete maloba oyo mosakoli aloba ekokisama : \q1 \v 5 « Boloba na Siona, mboka kitoko : \q2 ‹ Tala, mokonzi na yo azali koya epai na yo, \q1 atonda na boboto, avandi na likolo ya ane ya mwasi, \q2 na likolo ya mwana ya ane, mwana ya nyama \q2 oyo ememaka mikumba. › » \p \v 6 Bayekoli bakendeki mpe basalaki ndenge kaka Yesu atindaki bango. \v 7 Bamemaki ane ya mwasi elongo na mwana ya ane, batandaki bilamba na bango na mikongo na yango ; mpe Yesu avandaki na likolo na yango. \v 8 Bato ebele batandaki bilamba na bango na nzela ; bamosusu bakataki bitape na likolo ya banzete mpe batandaki yango lisusu na nzela. \v 9 Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya Yesu mpe ba-oyo bazalaki kolanda sima bazalaki koganga : \q1 « Ozana na Mwana na Davidi ! \q2 Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! \b \q1 Ozana na bisika oyo eleki Likolo ! » \p \v 10 Tango Yesu akotaki kati na Yelusalemi, engumba mobimba eninganaki ; bazalaki kotuna : \pi1 — Oyo lisusu nani ? \p \v 11 Bato bazalaki kozongisa : \pi1 — Ezali mosakoli Yesu, moto ya Nazareti ya Galile ! \s1 Yesu abengani bateki kati na Ndako ya Nzambe \r (Mlk 11.15-19; Lk 19.45-48; Yn 2.13-16) \p \v 12 Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo, abenganaki bato nyonso oyo bazalaki koteka mpe kosomba biloko kati na Tempelo ; abalolaki bamesa ya bato oyo bazalaki kobongola mbongo mpe bakiti ya ba-oyo bazalaki koteka bibenga. \v 13 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Ekomama : « Ndako na Ngai ekobengama Ndako ya losambo ; » kasi bino, bozali kokomisa yango penza nganda ya miyibi !\wj* \p \v 14 Bakufi miso mpe bato oyo batambola tengu-tengu bapusanaki pene na Yesu kati na lopango ya Tempelo, mpe abikisaki bango. \v 15 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basilikaki makasi tango bamonaki bikamwa oyo Yesu asalaki mpe ndenge bana bazalaki koganga kati na lopango ya Tempelo : « Ozana na Mwana na Davidi ! » \v 16 Balobaki na Yesu : \pi1 — Ozali koyoka makambo oyo bazali koloba ? \p Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Iyo ! Boni, botikala nanu kotanga te :\wj* \q1 \wj « Wuta na minoko ya bana mike, mpe ya bana\wj* \q2 \wj oyo bazali nanu komela mabele,\wj* \q2 \wj ozwaki lokumu na Yo ? »\wj* \p \v 17 Bongo atikaki bango, abimaki longwa na engumba mpe akendeki na Betani epai wapi alekisaki butu. \s1 Yesu alakeli nzete ya figi mabe \r (Mlk 11.12-14, 20-25) \p \v 18 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, wana azalaki kozonga na engumba, ayokaki nzala. \v 19 Amonaki nzete moko ya figi pembeni ya nzela, apusanaki pene na yango ; kasi amonaki eloko moko te na nzete yango, kaka makasa. Alobaki na nzete yango : \pi1 \wj — Okobotaka lisusu mbuma te mpo na libela.\wj* \p Mpe kaka na tango wana, nzete ya figi ekawukaki. \v 20 Tango bayekoli bamonaki bongo, bakamwaki mingi mpe batunaki : \pi1 — Ndenge nini nzete ya figi ekawuki kaka boye na mbala moko ? \p \v 21 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : soki bozali na kondima mpe botie tembe te, bokoki kaka te kosala makambo oyo Ngai nasali na nzete ya figi oyo, kasi bokoki mpe koloba na ngomba wana : « Longwa wana mpe mibwaka na ebale, » yango ekosalema solo.\wj* \v 22 \wj Soki bozali na kondima, bokozwa nyonso oyo bokosenga kati na losambo.\wj* \s1 Tembe na tina na Bokonzi ya Yesu \r (Mlk 11.27-33; Lk 20.1-8) \p \v 23 Yesu akotaki na lopango ya Tempelo ; mpe wana azalaki koteya, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bapusanaki pene na Ye. Batunaki : \pi1 — Na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ? \p \v 24 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Soki kaka bopesi Ngai eyano, nakoyebisa bino soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.\wj* \v 25 \wj Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ?\wj* \p Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : \pi1 — Soki tolobi : « Ewutaki na Nzambe, » akotuna biso lisusu : « Bongo mpo na nini bondimaki ye te ? » \v 26 Soki mpe tolobi : « Ewutaki na bato, » wana tosengeli kobanga bato, pamba te bato nyonso bazwaka Yoane lokola mosakoli. \p \v 27 Boye, bazongiselaki Yesu : \pi1 — Toyebi te ! \p Yesu mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.\wj* \s1 Lisese ya bana mibale \p \v 28 Yesu alobaki na bango lisusu : \pi1 \wj — Bokanisi nini na tina na lisolo oyo ? Moto moko azalaki na bana mibali mibale ; akendeki epai ya mwana ya liboso mpe alobaki na ye : « Mwana na ngai, kende lelo kosala na elanga ya vino. »\wj* \pi1 \v 29 \wj Mwana azongisaki : « Naboyi. »\wj* \pi1 \wj Kasi sima na mwa tango, abongolaki makanisi mpe akendeki na elanga yango.\wj* \pi1 \v 30 \wj Tata akendeki epai ya mwana mosusu mpe alobaki na ye kaka ndenge moko. Mwana yango azongisaki : « Malamu, nkolo na ngai, nakeyi ! »\wj* \pi1 \wj Kasi akendeki te.\wj* \v 31 \wj Nani kati na bango mibale akokisaki mokano ya tata na ye ?\wj* \p Bazongisaki : \pi1 — Mwana ya liboso. \p Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bakokota na Bokonzi ya Nzambe liboso na bino,\wj* \v 32 \wj pamba te Yoane ayaki nde epai na bino mpo na kolakisa bino nzela ya bosembo, kasi bondimaki ye te ; nzokande, bafutisi mpako mpe basi ya ndumba bandimaki ye. Atako bomonaki yango na miso na bino, kasi bobongolaki kaka mitema te mpe bondimaki ye kaka te.\wj* \s1 Lisese ya basali mabe ya elanga ya vino \r (Mlk 12.1-12; Lk 20.9-19) \pi1 \v 33 \wj Boyoka lisese mosusu : Moto moko alonaki elanga ya vino, atongaki lopango zingazinga na yango, atimolaki ekamolelo bambuma ya vino mpe atongaki ndako molayi ya bakengeli. Sima, apesaki elanga yango na maboko ya basali mpo ete bakoma kofutela yango, mpe akendeki na mobembo.\wj* \v 34 \wj Tango eleko ya kobuka bambuma ekomaki pene, atindaki basali na ye epai ya bafuteli elanga, mpo ete bakende kokongola bambuma na ye ;\wj* \v 35 \wj kasi bafuteli elanga bakangaki basali yango ; babetaki moko, babomaki mosusu, mpe babambaki oyo ya misato mabanga.\wj* \pi1 \v 36 \wj Atindaki basali mosusu ebele koleka ba-oyo ya liboso ; kasi bafuteli elanga basalaki bango ndenge kaka basalaki ba-oyo ya liboso.\wj* \pi1 \v 37 \wj Na suka, atindelaki bango mwana na ye ya mobali mpe amilobelaki : « Solo, bakotosa mwana na ngai ! »\wj* \v 38 \wj Kasi tango bafuteli elanga bamonaki mwana yango, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ya elanga ! Boya, toboma ye mpo ete libula ya elanga ekoma ya biso ! »\wj* \pi1 \v 39 \wj Bakangaki ye, babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye.\wj* \pi1 \v 40 \wj Tango nkolo elanga ya vino akoya, akosala bafuteli elanga wana nini ?\wj* \p \v 41 Bazongisaki : \pi1 — Akobomisa bato mabe wana na kufa moko ya somo penza, akopesa elanga yango ya vino na maboko ya bafuteli mosusu oyo bakobanda kofutaka ye ndambo na ye ya bambuma, na eleko oyo babukaka yango. \p \v 42 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Nanu botanga te kati na Makomi :\wj* \q1 \wj « Libanga oyo batongi ndako babwakaki\wj* \q2 \wj ekomi libanga ya songe ya ndako,\wj* \q1 \wj mpe esimbi ndako mobimba ?\wj* \q2 \wj Nkolo asalaki bongo,\wj* \q2 \wj mpe ezali penza likambo ya kokamwa na miso na biso. »\wj* \pi1 \v 43 \wj Yango wana, nazali koyebisa bino ete Bokonzi ya Nzambe ekolongolama kati na bino mpo ete epesama na bato oyo bakokoka kolakisa misala na yango.\wj* [ \v 44 \wj Moto oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; kasi moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.\wj*]\f + \fr 21.44 \fr*\ft Eteni oyo ezali te na mikanda mosusu ya kala\ft*\f* \p \v 45 Sima na bango koyoka masese na Ye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo basosolaki ete Yesu azalaki koloba na tina na bango. \v 46 Bazalaki koluka nzela ya kokanga Ye, kasi babangaki bato, pamba te bango nyonso bazalaki kozwa Yesu lokola mosakoli. \c 22 \s1 Lisese ya babengami na feti \r (Lk 14.15-24) \p \v 1 Yesu alobaki na bango lisusu na masese : \pi1 \v 2 \wj — Bokonzi ya Likolo ekokani na mokonzi moko oyo asalaki feti ya libala mpo na mwana na ye ya mobali.\wj* \v 3 \wj Atindaki basali na ye kokende koyebisa babengami na feti ete baya na feti, kasi babengami yango baboyaki.\wj* \v 4 \wj Atindaki lisusu basali mosusu mpe alobaki na bango : « Bosengela ngai epai ya babengami na feti ete baya penza, mpe boyebisa bango ete nasili kobongisa bilei : nabomi bangombe na ngai ya mibali mpe banyama na ngai ya mafuta ; mpe sik’oyo, nyonso esili kobongisama malamu. Boloba na bango ete bazanga te na feti. »\wj* \pi1 \v 5 \wj Kasi babengami na feti bazwaki kobengama yango na pamba : bamoko bakendeki na bilanga na bango ; bamosusu, na mombongo na bango ;\wj* \v 6 \wj mpe bamosusu bakangaki basali ya mokonzi, banyokolaki bango mpe babomaki bango.\wj* \pi1 \v 7 \wj Mokonzi asilikaki makasi, atindaki basoda na ye koboma babomi wana mpe kotumba engumba na bango.\wj* \v 8 \wj Alobaki na basali na ye : « Bilei ya feti esili kobongisama malamu, kasi babengami mpo na kozala na feti yango babongaki na yango te.\wj* \v 9 \wj Bokende na bisika oyo babalabala ekutana mpe bobenga bato nyonso oyo bokomona kuna, mpo ete baya na feti ya libala ya mwana na ngai. »\wj* \pi1 \v 10 \wj Basali bakendeki na babalabala mpe babengaki bato nyonso oyo bamonaki kuna : bato mabe mpe bato malamu. Boye, ndako ya feti etondaki na babengami.\wj* \v 11 \wj Kasi tango mokonzi akotaki mpo na kotala bato oyo babengamaki na feti, amonaki moto moko oyo alataki te elamba ya feti ya libala.\wj* \pi1 \v 12 \wj Atunaki ye : « Molingami na ngai, okoti awa ndenge nini awa olati te elamba oyo ebongi na feti ya libala ? »\wj* \pi1 \wj Moto yango azangaki eyano ya kopesa.\wj* \pi1 \v 13 \wj Bongo mokonzi alobaki na basali na ye : « Bokanga ye makolo mpe maboko, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »\wj* \pi1 \v 14 \wj Pamba te babengami bazali ebele, kasi baponami bazali moke.\wj* \s1 Mpako mpo na mokonzi \r (Mlk 12.13-17; Lk 20.20-26) \p \v 15 Bongo Bafarizeo babendanaki pembeni mpo na kosala mabongisi ya kokanga Yesu na motambo na nzela ya maloba na Ye moko. \v 16 Batindelaki Yesu bayekoli na bango elongo na bato ya lisanga ya Erode. Batindami yango balobaki na Yesu : \pi1 — Moteyi, toyebi malamu ete ozali moto oyo azanga pamela mpe oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe, otepaka-tepaka te liboso ya makanisi ya bato mpe oponaka bilongi te ; \v 17 yebisa biso makanisi na yo na tina na likambo oyo : Kolanda mobeko, ezali malamu to epekisami kofuta mpako ya mokonzi epai ya Sezare ? \p \v 18 Kasi lokola Yesu asosolaki mayele mabe na bango, alobaki : \pi1 \wj — Bato ya bilongi mibale ! Mpo na nini bozali kotiela Ngai motambo ?\wj* \v 19 \wj Bolakisa Ngai mbongo oyo bofutaka na yango mpako.\wj* \p Bamemelaki Ye mbongo moko ya ebende. \v 20 Atunaki bango : \pi1 \wj — Elilingi mpe makomi oyo ezali ya nani ?\wj* \p \v 21 Bazongisaki : \pi1 — Ezali ya Sezare. \p Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe bopesa na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !\wj* \p \v 22 Tango bayokaki eyano ya Yesu, bakamwaki ; batikaki Ye mpe bakendeki. \s1 Eyano ya Yesu na tina na lisekwa \r (Mlk 12.18-27; Lk 20.27-40) \p \v 23 Kaka na mokolo yango, Basaduseo oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai na Yesu mpe batunaki Ye : \pi1 \v 24 — Moteyi, Moyize alobaki : « Soki mobali akufi mpe atiki mwana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo mokufi atiki mpo ete abotisa ye bana oyo bakozala bakitani ya mokufi. » \v 25 Nzokande, kati na biso, ezalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko mobali ya liboso abalaki mwasi mpe akufaki ; kasi lokola abotaki te bana oyo basengelaki kokitana na ye, atikelaki ndeko na ye ya mobali mwasi na ye. \v 26 Esalemaki mpe bongo na ndeko ya mibale, na ndeko ya misato kino na ndeko ya sambo. \v 27 Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki. \v 28 Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani kati na bandeko nyonso sambo, pamba te bango nyonso sambo babalaki ye ? \p \v 29 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Bozali kati na libunga, pamba te boyebi Makomi te, mpe boyebi nguya ya Nzambe te.\wj* \v 30 \wj Na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, bakobala lisusu te ; kasi bakozala lokola ba-anjelu kati na Likolo.\wj* \v 31 \wj Mpo na oyo etali lisekwa ya bakufi, botikala nanu kotanga te makambo oyo Nzambe ayebisa bino :\wj* \v 32 \wj « Nazali Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi ? » Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi azali Nzambe ya bato ya bomoi.\wj* \p \v 33 Tango ebele ya bato bayokaki bongo, bakamwaki mingi mateya ya Yesu. \s1 Mobeko oyo eleki monene \r (Mlk 12.28-34; Lk 10.25-37) \p \v 34 Tango Bafarizeo bayokaki ete Yesu asukisi Basaduseo, bango mpe basanganaki ; \v 35 mpe moko kati na bango, molakisi ya Mobeko, alukaki kotiela Yesu motambo, atunaki Ye : \pi1 \v 36 — Moteyi, mobeko nini eleki monene kati na mibeko nyonso ? \p \v 37 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso.\wj* \v 38 \wj Yango nde mobeko ya liboso mpe eleki monene.\wj* \v 39 \wj Mobeko ya mibale oyo ekokani na yango : « Linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. »\wj* \v 40 \wj Mibeko nyonso mpe mateya ya basakoli evandi kati na mibeko oyo mibale.\wj* \s1 Yesu azali Mwana ya nani \r (Mlk 12.35-37; Lk 20.41-44) \p \v 41 Wana Bafarizeo basanganaki esika moko, Yesu atunaki bango : \pi1 \v 42 \wj — Bozali kokanisa nini na tina na Klisto ? Azali Mwana ya nani ?\wj* \p Bazongiselaki Ye : \pi1 — Azali mwana ya Davidi ! \p \v 43 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Bongo ndenge nini Davidi, na botindikami ya Molimo ya Nzambe, abengaki Ye Nkolo ? Pamba te alobaki :\wj* \q1 \v 44 \wj « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai :\wj* \q2 \wj ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali\wj* \q2 \wj kino natia banguna na Yo\wj* \q2 \wj na se ya matambe na Yo. › »\wj* \pi1 \v 45 \wj Soki Davidi azali kobenga Ye « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?\wj* \p \v 46 Moto moko te akokaki kozongisela Ye ata liloba moko. Mpe, banda mokolo wana, moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna. \c 23 \s1 Yesu apameli bakonzi ya Banganga-Nzambe \r (Mlk 12.38-40; Lk 11.39-52; 20.45-47) \p \v 1 Yesu alobaki na ebele ya bato mpe na bayekoli na Ye : \v 2 \wj « Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazali na mokumba ya koteya bato mibeko ya Moyize.\wj* \v 3 \wj Boye, bosengeli kosala keba na mateya nyonso oyo bateyaka bino, mpe bobongisa etamboli na bino kolanda mateya na bango ; kasi bomekola te misala na bango, pamba te batiaka mateya na bango na misala te.\wj* \p \v 4 \wj Babongisaka mikumba ya kilo makasi mpe batiaka yango na mapeka ya bato mosusu, kasi bango moko balingaka ata moke te kotombola mosapi oyo ya moke mpo na kosunga bato yango na komema mikumba yango.\wj* \v 5 \wj Misala nyonso oyo basalaka, basalaka yango kaka mpo ete bato bamona bango. Boye, bayeisaka minene mikanda na bango, oyo bakoma biteni ya Makomi, mpe milayi, basonge ya banzambala na bango.\wj* \v 6 \wj Balingaka kovanda na bisika ya lokumu kati na bafeti, mpe na bisika ya liboso kati na bandako ya mayangani ;\wj* \v 7 \wj balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka, mpe babenga bango ‹ Moteyi. ›\wj* \p \v 8 \wj Kasi bino, bolinga te ete bato babenga bino ‹ Moteyi, › pamba te bozali na Moteyi kaka moko, mpe bino nyonso bozali bandeko.\wj* \v 9 \wj Bobenga moto moko te awa na mokili ‹ Tata, › pamba te bozali kaka na Tata moko, mpe azali kati na Likolo.\wj* \v 10 \wj Bolinga te ete bato babenga bino ‹ bakonzi, › pamba te bozali kaka na Mokonzi moko, Klisto.\wj* \p \v 11 \wj Moto oyo aleki monene kati na bino akozala mosali na bino.\wj* \v 12 \wj Pamba te moto oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.\wj* \p \v 13 \wj Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bokangaka nzela mpo ete bato mosusu bakota te kati na Bokonzi ya Likolo ; bino moko, bozali kokota kuna te, kasi bozali lisusu kokanga nzela mpo ete bato oyo bazali na posa ya kokota bakota te.\wj* \p [ \v 14 \wj Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Boyibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali, mpe bosalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Mpo na yango, bokozwa etumbu oyo eleki makasi.\wj*]\f + \fr 23.14 \fr*\ft Eteni oyo ezali te kati na mikanda ebele ya kala\ft*\f* \p \v 15 \wj Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo : bato ya bilongi mibale ! Bosalaka mibembo na ebale mpe na mokili mpo na koluka kozwa kaka mopagano moko oyo akondima kosambela na lingomba na bino ; mpe soki kaka andimi, bokomisaka ye moto ya lifelo mbala mibale koleka bino moko.\wj* \p \v 16 \wj Mawa na bino, batambolisi bakufa miso ! Bolobaka : ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya Tempelo, wana ezali likambo te ; kasi soki alapi ndayi na kombo ya wolo ya Tempelo, wana asengeli kokokisa ndayi na ye. ›\wj* \v 17 \wj Bino, bakufi miso, bozali penza bazoba ! Eloko nini eleki motuya : wolo to Tempelo oyo ekomisaka wolo bule ?\wj* \v 18 \wj Bolobaka lisusu : ‹ Soki moto alapi ndayi na kombo ya etumbelo, wana ezali likambo te ; kasi soki alapi ndayi na kombo ya likabo oyo ezali na likolo ya etumbelo, asengeli kokokisa ndayi na ye. ›\wj* \v 19 \wj Bakufi miso ! Eloko nini eleki motuya : likabo to etumbelo oyo ekomisi likabo bule ?\wj* \v 20 \wj Pamba te moto oyo alapi ndayi na kombo ya etumbelo alapi yango na kombo ya etumbelo yango mpe na kombo ya biloko nyonso oyo ezali na likolo na yango.\wj* \v 21 \wj Moto oyo mpe alapi ndayi na kombo ya Tempelo alapi yango na kombo ya Tempelo yango mpe na Kombo ya Ye oyo avandaka kati na yango.\wj* \v 22 \wj Mpe moto oyo alapi ndayi na kombo ya Likolo alapi yango na kombo ya Kiti ya Bokonzi ya Nzambe mpe na Kombo ya Ye oyo avandelaka yango.\wj* \p \v 23 \wj Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Solo, bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya bamusikadi mpe ya biloko ya mike-mike ya solo kitoko ; kasi bomonaka pamba makambo oyo eleki motuya kati na Mobeko : bosembo, motema mawa mpe kondima. Nzokande, bosengeli nde kotia yango na misala mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.\wj* \p \v 24 \wj Bino, batambolisi bakufa miso ! Solo, bolongolaka nzinzi oyo ekweyaka na masanga na bino, kasi bomelaka shamo mobimba.\wj* \p \v 25 \wj Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bosukolaka malamu libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondisaka yango na biloko ya moyibi mpe ya lokoso na bino.\wj* \v 26 \wj Mofarizeo mokufi miso ! Banda nanu na kopetola kati ya kopo mpe ya sani, bongo libanda ekokoma peto.\wj* \p \v 27 \wj Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Bozali lokola bakunda oyo bapakola langi ya pembe : emonanaka kitoko na libanda, kasi etonda na mikuwa ya bakufi mpe na lolenge nyonso ya mbindo.\wj* \v 28 \wj Ndenge moko mpe mpo na bino : na libanda, bomonanaka lokola bato ya sembo na miso ya bato ; kasi na kati, botondi na lokuta mpe na mabe.\wj* \p \v 29 \wj Mawa na bino, balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo, bato ya bilongi mibale ! Botongaka bakunda mpo na basakoli, mpe bokomisaka kitoko malita ya bato ya sembo.\wj* \v 30 \wj Bolobaka : ‹ Soki tozalaki na bomoi na tango ya bakoko na biso, tolingaki kosangana te elongo na bango mpo na kotangisa makila ya basakoli. ›\wj* \v 31 \wj Boye, na maloba na bino moko, bondimaka ete bozali penza bakitani ya bato oyo babomaki basakoli.\wj* \v 32 \wj Bokoba malamu na mosala oyo batata na bino babandaki, mosala ya koboma basakoli !\wj* \p \v 33 \wj Bino, banyoka, libota ya bitupa ! Ndenge nini bokoki kokanisa ete bokokima etumbu ya lifelo ?\wj* \v 34 \wj Mpo na yango, Ngai nakotindela bino basakoli, bato ya bwanya mpe balakisi ya Mobeko. Bokoboma mpe bokobaka bamoko na ekulusu, bokobeta bamosusu fimbu kati na bandako na bino ya mayangani mpe bokobengana bango na engumba moko na moko,\wj* \v 35 \wj mpo ete makila ya bato nyonso ya sembo, oyo basopa na mabele, etangama na mito na bino, kobanda na makila ya Abele, moto ya sembo, kino na makila ya Zakari, mwana mobali ya Barashi, oyo bobomaki kati ya Tempelo mpe etumbelo.\wj* \p \v 36 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : etumbu oyo esengeli mpo na mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.\wj* \s1 Yesu aleli mpo na Yelusalemi \r (Lk 13.34-35) \p \v 37 \wj Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu na yango, kasi boboyaki !\wj* \v 38 \wj Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama.\wj* \p \v 39 \wj Pamba te, nazali koloba na bino : Kobanda lelo, bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba : ‹ Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! › »\wj* \c 24 \s1 Kobebisama ya Tempelo \r (Mlk 13.1-13; Lk 21.5-19) \p \v 1 Wana Yesu azalaki kobima longwa na lopango ya Tempelo, bayekoli na Ye bapusanaki pene na Ye mpo na kotalisa Ye ndenge batonga Tempelo. \v 2 Kasi Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bomoni nyonso oyo ? Nazali koloba na bino penza ya solo : nyonso ekobukama, libanga moko te ekotikala awa na likolo ya libanga mosusu.\wj* \p \v 3 Lokola Yesu avandaki na ngomba ya banzete ya olive, bayekoli bapusanaki pene na Ye mpe batunaki Ye, na esika oyo bazalaki bango moko kaka : \pi1 — Yebisa biso : makambo wana ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa koya na Yo mpe suka ya mokili ? \p \v 4 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Bosala keba ete moto moko te akosa bino !\wj* \v 5 \wj Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai mpe bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe bakokosa bato ebele.\wj* \v 6 \wj Bokoyoka basango ya bitumba mpe nungunungu na tina na bitumba, kasi bomitungisa te mpo na yango ; pamba te makambo wana esengeli kosalema, kasi ekozala nanu suka ya mokili te.\wj* \v 7 \wj Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu, nzala ekozala makasi penza, mpe mabele ekoningana bipai na bipai.\wj* \v 8 \wj Makambo nyonso wana ekozala kaka ebandeli ya pasi lokola pasi ya mwasi oyo azali kobota.\wj* \pi1 \v 9 \wj Bongo, bakokaba bino mpo ete bomona pasi, bakoboma bino ; bikolo nyonso ekoyina bino mpo na Kombo na Ngai.\wj* \v 10 \wj Mpo na yango, bato ebele bakokweyisa kondima na bango, bakokaba mpe bakoyina baninga na bango.\wj* \pi1 \v 11 \wj Basakoli ebele ya lokuta bakobima mpe bakokosa bato ebele.\wj* \v 12 \wj Lokola mabe ekokola se kokola, bolingo ya bato ebele ekokita.\wj* \v 13 \wj Kasi moto oyo akoyika mpiko kino na suka akobika.\wj* \v 14 \wj Sango Malamu oyo ya Bokonzi ekoteyama na mokili mobimba mpo ete ezala litatoli epai ya bikolo nyonso ; sima na yango kaka nde suka ekoya.\wj* \r (Mlk 13.14-23; Lk 21.20-24) \pi1 \v 15 \wj Yango wana, tango bokomona makambo ya nkele oyo epesaka bato pasi na motema, oyo mosakoli Daniele alobelaki, kosalema kati na Esika ya bule, —tika ete motangi asosola malamu—\wj* \v 16 \wj wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ;\wj* \v 17 \wj tika ete moto oyo akozala na likolo ya ndako akita te, mpo na kokende kozwa eloko songolo kati na ndako na ye,\wj* \v 18 \wj mpe tika ete moto oyo akozala kati na bilanga azonga na ndako te, mpo na kokende kozwa elamba na ye !\wj* \pi1 \v 19 \wj Na mikolo wana, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele !\wj* \v 20 \wj Bosambela mpo ete makambo wana esalema te na eleko ya malili makasi to na mokolo ya Saba.\wj* \v 21 \wj Pamba te pasi ekozala makasi, na lolenge oyo etikala nanu kozala te, wuta na ebandeli ya mokili kino sik’oyo, mpe na lolenge oyo ekotikala kozala lisusu te.\wj* \pi1 \v 22 \wj Mpe soki Nkolo ayeisaki te mikolo yango moke, moto ata moko te akokaki kobika ; kasi mpo na baponami na Ye, akoyeisa yango moke.\wj* \r (Mlk 13.24-31; Lk 17.23-24; 21.25-31) \pi1 \v 23 \wj Na tango wana, soki moto moko alobi na bino : « Klisto azali awa ! » to « Azali kuna, » bondima ye te.\wj* \v 24 \wj Pamba te bamasiya ya lokuta mpe basakoli ya lokuta bakobima, bakosala bilembo minene mpe bikamwa mpo na kokosa ata baponami, soki ekokaki kosalema.\wj* \v 25 \wj Namiyebiseli bino mpo ete bosala keba !\wj* \pi1 \v 26 \wj Soki moto moko alobi na bino : « Botala, azali kati na esobe, » bokende kuna te ; to « Azali awa, kati na esika ebombama, » bondima yango te.\wj* \v 27 \wj Solo, ndenge mokalikali oyo ebimi na este engengisaka kino na weste, ndenge wana mpe koya ya Mwana na Moto ekozala.\wj* \v 28 \wj Esika nyonso ebembe ezali kopola, bandeke oyo eliaka bibembe esanganaka wana.\wj* \r (Mlk 13.24-27; Lk 21.25-28) \pi1 \v 29 \wj Tango kaka mikolo yango ya pasi ekoleka,\wj* \q1 \wj « moyi ekokoma molili,\wj* \q2 \wj sanza ekongenga lisusu te,\wj* \q2 \wj minzoto ekokweya longwa na likolo,\wj* \q2 \wj mpe banguya ya Likolo ekoningisama. »\wj* \pi1 \v 30 \wj Sima na yango, elembo ya Mwana na Moto ekomonana na likolo ; bongo bikolo nyonso ya mokili ekokoma kolelalela mpe ekomona Mwana na Moto koya na likolo ya mapata ya likolo, kati na nguya mpe na nkembo monene.\wj* \v 31 \wj Mpe na lokito monene ya kelelo, akotinda ba-anjelu na Ye kosangisa baponami na Ye longwa na bangambo nyonso minei ya mokili : longwa na suka moko ya Likolo kino na suka mosusu.\wj* \pi1 \v 32 \wj Tika ete lisese ya nzete ya figi eteya bino : soki kaka bitape na yango elembi mpe ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.\wj* \v 33 \wj Ndenge moko mpe mpo na bino ; tango bokomona makambo wana nyonso, boyeba ete Mwana na Moto akomi pene, lokola na bikuke ya engumba.\wj* \pi1 \v 34 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.\wj* \v 35 \wj Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.\wj* \s1 Mokolo mpe ngonga eyebani te \r (Mlk 13.32-37; Lk 17.26-30, 34-35) \pi1 \v 36 \wj Mpo na oyo etali mokolo to ngonga, moko te ayebi yango, ezala ba-anjelu ya Likolo to Mwana ; Ye moko kaka Tata nde ayebi yango.\wj* \pi1 \v 37 \wj Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na koya ya Mwana na Moto ;\wj* \v 38 \wj pamba te liboso ete mpela eya, bato bazalaki kolia mpe komela, kobala mpe kobalisa bana na bango, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ;\wj* \v 39 \wj bayebaki eloko moko te na tina na oyo elingaki kosalema, kino mpela eyaki mpe ekumbaki bango nyonso.\wj* \pi1 \wj Ekozala mpe bongo na koya ya Mwana na Moto.\wj* \v 40 \wj Mibali mibale bakozala na elanga : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ;\wj* \v 41 \wj basi mibale bakozala konika bambuma na enikelo ; moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.\wj* \pi1 \v 42 \wj Yango wana, bosenzela ; pamba te boyebi te mokolo nini Nkolo na bino akoya.\wj* \v 43 \wj Bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ndako ayebaki ngonga ya butu oyo moyibi akoya, alingaki kosenzela mpe kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.\wj* \v 44 \wj Yango wana, bino mpe, bomibongisa, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te.\wj* \r (Lk 12.41-48) \pi1 \v 45 \wj Nani azali mowumbu ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo apesaki mokumba ya kokamba basali kati na ndako na ye, mpo ete apesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?\wj* \v 46 \wj Esengo na mowumbu oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo.\wj* \v 47 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso.\wj* \pi1 \v 48 \wj Kasi soki azali mowumbu mabe oyo amilobeli : « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, »\wj* \v 49 \wj mpe akomi kobeta baninga na ye ya mosala, bawumbu lokola ye, kolia mpe komela masanga mesa moko elongo na balangwi masanga,\wj* \v 50 \wj nkolo na ye akozonga na mokolo oyo ye, mowumbu, azali kozela te mpe na ngonga oyo ayebi te ;\wj* \v 51 \wj akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na bato ya bilongi mibale, na esika oyo ekozala kolela mpe koswa minu.\wj* \c 25 \s1 Lisese ya baseka zomi \pi1 \v 1 \wj Bokonzi ya Likolo ekozala lokola baseka zomi oyo bakamataki minda na bango mpe bakendeki kokutana na mobali ya libala.\wj* \v 2 \wj Kati na bango, mitano bazalaki bazoba, mpe mitano bazalaki mayele.\wj* \v 3 \wj Baseka oyo bazalaki bazoba bakamataki minda na bango, kasi bamemaki mafuta te ;\wj* \v 4 \wj ba-oyo bazalaki mayele bakamataki minda na bango mpe milangi oyo ezalaki na mafuta kati na yango.\wj* \pi1 \v 5 \wj Lokola mobali ya libala azalaki kowumela mpo na kokoma, baseka nyonso wana bayokaki pongi mpe balalaki.\wj* \v 6 \wj Na ngonga ya midi ya butu, mongongo moko eyokanaki : « Mobali ya libala ayei ! Bokende kokutana na ye ! »\wj* \pi1 \v 7 \wj Baseka nyonso balamukaki mpe babongisaki minda na bango.\wj* \v 8 \wj Baseka oyo bazalaki bazoba balobaki na ba-oyo bazalaki mayele : « Bopesa biso ndambo ya mafuta na bino, pamba te minda na biso ekomi pene ya kokufa. »\wj* \pi1 \v 9 \wj Kasi baseka oyo bazalaki mayele bazongisaki : « Te ! Ekokoka te mpo na biso mpe bino ! Ebongi nde bokima mbangu epai ya bateki mafuta mpo ete bosomba mafuta na bino moko. »\wj* \pi1 \v 10 \wj Wana bazalaki kokende kosomba mafuta, mobali ya libala akomaki : baseka oyo bamilengelaki bakotaki elongo na mobali ya libala kati na ndako oyo basalelaka feti ya libala, mpe bakangaki ekuke.\wj* \pi1 \v 11 \wj Na sima, baseka mosusu mpe bayaki ; balobaki : « Nkolo, nkolo, fungolela biso ekuke ! »\wj* \v 12 \wj Kasi azongiselaki bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : nayebi bino te. »\wj* \pi1 \v 13 \wj Boye bosenzela, pamba te boyebi mokolo te, boyebi mpe ngonga te.\wj* \s1 Lisese ya basali misato \r (Lk 19.12-27) \pi1 \v 14 \wj Ekozala lisusu lokola moto moko oyo, wana akomaki pene ya kokende na mobembo, abengaki basali na ye mpe apesaki bango mokumba ya kobatela bozwi na ye.\wj* \v 15 \wj Apesaki na mosali ya liboso batalanta mitano ; na mosali ya mibale, batalanta mibale ; mpe na mosali ya misato, talanta moko. Apesaki bango yango kolanda makoki ya moko na moko, mpe akendeki na mobembo.\wj* \v 16 \wj Mosali oyo azwaki batalanta mitano abandaki mbala moko kobalola yango na mombongo, mpe mombongo yango ebotaki batalanta mosusu mitano lokola mileki.\wj* \v 17 \wj Mosali oyo azwaki batalanta mibale asalaki mpe ndenge moko. Mombongo na ye ebotaki batalanta mosusu mibale lokola mileki.\wj* \v 18 \wj Kasi moto oyo azwaki kaka talanta moko atimolaki libulu kati na mabele mpe abombaki talanta ya nkolo na ye.\wj* \pi1 \v 19 \wj Sima na mikolo ebele, nkolo ya basali wana azongaki mpe alobaki na bango : « Boyebisa ngai ndenge nini bosalelaki bozwi na ngai. »\wj* \pi1 \v 20 \wj Mosali oyo azwaki batalanta mitano apusanaki mpe amemaki batalanta mitano mosusu oyo azwaki lokola mileki. Alobaki : « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mitano ; tala, nazwi batalanta mitano mosusu lokola mileki. »\wj* \pi1 \v 21 \wj Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »\wj* \pi1 \v 22 \wj Mosali oyo azwaki batalanta mibale ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, opesaki ngai batalanta mibale ; tala, nazwi batalanta mibale mosusu lokola mileki. »\wj* \pi1 \v 23 \wj Nkolo azongiselaki ye : « Malamu ! Ozali mosali malamu mpe ya sembo. Lokola ozalaki sembo na biloko moke, nakopesa yo mokumba ya kobatela biloko ebele. Yaka kosepela elongo na nkolo na yo. »\wj* \pi1 \v 24 \wj Bongo mosali oyo azwaki talanta moko ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nayebaki ete ozali moto ya matata, obukaka bambuma na elanga oyo olonaki te mpe olokotaka bambuma na esika oyo obwakaki ata nkona moko te.\wj* \v 25 \wj Yango wana, nabangaki mpe nakendeki kobomba talanta na yo na se ya mabele. Tala yango oyo, kamata talanta na yo. »\wj* \pi1 \v 26 \wj Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe mpe ya goyigoyi ! Lokola oyebaki ete nabukaka bambuma na elanga oyo nalonaki te mpe nalokotaka bambuma na esika oyo nabwakaki ata nkona moko te,\wj* \v 27 \wj mpo na nini opesaki te talanta na ngai epai ya babombi misolo mpo ete, na bozongi na ngai, nakoka kozwa yango elongo na mileki ?\wj* \v 28 \wj Bobotola ye talanta yango mpe bopesa yango epai ya moto oyo azali na batalanta zomi.\wj* \v 29 \wj Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu, mpe akokoma na bofuluki ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.\wj* \v 30 \wj Bongo na oyo etali mosali mabe oyo, bobwaka ye kati na molili ya libanda, epai wapi kolela mpe koswa minu ezali. »\wj* \s1 Kosambisama ya suka \pi1 \v 31 \wj Tango Mwana na Moto akoya kati na nkembo na Ye elongo na ba-anjelu na Ye nyonso, akovanda na Kiti ya Bokonzi na Ye ya nkembo.\wj* \v 32 \wj Bikolo nyonso ya mokili ekosangana liboso na Ye. Bongo akokabola bango na masanga mibale ndenge mobateli bibwele akabolaka bameme mpe bantaba :\wj* \v 33 \wj akotia bameme na ngambo ya loboko na Ye ya mobali, mpe bantaba, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi.\wj* \v 34 \wj Sima na yango, Mokonzi akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mobali : « Boya, bino bato oyo Tata na Ngai apambola, bokamata libula na bino, Bokonzi oyo babongisela bino wuta mokili ekelama.\wj* \v 35 \wj Pamba te nayokaki nzala, mpe bopesaki Ngai bilei ; nayokaki posa ya mayi, mpe bopesaki Ngai mayi ya komela ; nazalaki mopaya, mpe boyambaki Ngai malamu ;\wj* \v 36 \wj nazalaki bolumbu, mpe bolatisaki Ngai bilamba ; nabelaki, mpe bosungaki Ngai ; nakotaki na boloko, mpe boyaki kotala Ngai. »\wj* \pi1 \v 37 \wj Bongo, bato ya sembo bakoloba na Ye : « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala mpe topesaki Yo bilei ; tango nini tomonaki na posa ya mayi, mpe topesaki yo mayi ya komela ?\wj* \v 38 \wj Tango nini tomonaki Yo mopaya, mpe toyambaki Yo malamu ; tango nini ozalaki bolumbu, mpe biso tolatisaki Yo ?\wj* \v 39 \wj Tango nini tomonaki Yo kobela to kati na boloko mpe toyaki kotala Yo ? »\wj* \pi1 \v 40 \wj Mokonzi akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki mpo na moko kati na bandeko na Ngai, oyo bazali bato pamba, boyeba malamu ete bosalaki yango nde epai na Ngai. »\wj* \pi1 \v 41 \wj Bongo akoloba na bato oyo bakozala na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi : « Bokende mosika na Ngai, bino bato oyo Nzambe alakela mabe ; bokende na moto ya libela na libela, oyo ebongisama mpo na Satana elongo na ba-anjelu na ye.\wj* \v 42 \wj Pamba te nayokaki nzala, kasi bopesaki Ngai bilei te ; nayokaki posa ya mayi, kasi bopesaki Ngai te mayi ya komela ;\wj* \v 43 \wj nazalaki mopaya, kasi boyambaki Ngai malamu te epai na bino ; nazalaki bolumbu, kasi bolatisaki Ngai te ; nabelaki mpe nakotaki na boloko, kasi bosungaki Ngai te. »\wj* \pi1 \v 44 \wj Bango mpe bakotuna Ye : « Nkolo, tango nini tomonaki Yo na nzala to na posa ya mayi ; tango nini tomonaki Yo mopaya, ozangi bilamba, ozali kobela to okoti na boloko, bongo tosungaki Yo te ? »\wj* \pi1 \v 45 \wj Akozongisela bango : « Nazali koloba na bino penza ya solo : eloko nyonso oyo bosalaki te mpo na moko kati na bato pamba oyo, boyeba malamu ete bozangaki nde kosala yango epai na Ngai. »\wj* \pi1 \v 46 \wj Boye, bakokende na etumbu ya seko, kasi bato ya sembo bakozwa bomoi ya seko.\wj* \c 26 \ms1 Kufa mpe lisekwa ya Yesu \s1 Basaleli Yesu likita \r (Mlk 14.1-2; Lk 22.1-2; Yn 11.47-53) \p \v 1 Tango Yesu asilisaki koloba makambo wana nyonso, ayebisaki bayekoli na Ye : \v 2 \wj « Boyebi malamu ete etikali mikolo mibale mpo ete feti ya Pasika ebanda, mpe ete ezali na tango wana nde bakokaba Mwana na Moto mpo ete babaka Ye na ekulusu. »\wj* \p \v 3 Boye, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basanganaki kati na ndako ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; \v 4 bayokanaki kosalela mayele mabe mpo na kokanga Yesu mpe koboma Ye. \v 5 Kasi balobaki : « Tosala yango te na tango ya feti, noki te bato bakotomboka. » \s1 Basopeli Yesu malasi na Betani \r (Mlk 14.3-9; Lk 7.36-50; Yn 12.1-8) \p \v 6 Lokola Yesu azalaki na Betani, na ndako ya Simona oyo azalaki moto na maba, \v 7 mwasi moko apusanaki pene na Ye. Na maboko na ye, azalaki na molangi ya alibatre etonda na malasi ya motuya makasi. Wana Yesu azalaki na mesa, mwasi yango asopaki malasi yango na moto ya Yesu. \v 8 Tango bayekoli bamonaki bongo, basilikaki mpe balobaki : \pi1 — Mpo na nini kobebisa malasi boye ? \v 9 Bakokaki ata koteka yango na motuya makasi mpe kopesa mbongo epai ya babola ! \p \v 10 Tango Yesu amonaki bongo, alobaki na bango : \pi1 \wj — Mpo na nini bozali kotungisa mwasi oyo ? Asali Ngai likambo moko ya malamu.\wj* \v 11 \wj Bokozalaka na babola tango nyonso ; kasi Ngai, bokozalaka na Ngai tango nyonso te.\wj* \v 12 \wj Wana asopi malasi oyo na nzoto na Ngai, asali yango mpo na kobongisa kokundama na Ngai.\wj* \v 13 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : esika nyonso bakosakola Sango Malamu oyo kati na mokili mobimba, bakobanda mpe kolobela likambo mwasi oyo awuti kosala, mpo na kokanisa ye.\wj* \s1 Yuda ateki Yesu \r (Mlk 14.10-11; Lk 22.3-6) \p \v 14 Moko kati na bantoma zomi na mibale, oyo kombo na ye ezalaki Yuda Isikarioti, akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe \v 15 mpe atunaki bango : \pi1 — Bozali kokanisa kopesa ngai nini soki nateki Yesu epai na bino ? \p Boye bafutaki ye mbongo ya bibende tuku misato. \v 16 Banda na tango wana, Yuda akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu. \s1 Bilei ya suka \r (Mlk 14.12-16; Lk 22.7-13) \p \v 17 Na mokolo ya liboso ya feti ya Mapa ezanga levire, bayekoli bayaki kotuna Yesu : \pi1 — Esika nini olingi ete tobongisela Yo bilei ya Pasika ? \p \v 18 Azongiselaki bango : \pi1 \wj — Bokende na engumba epai ya moto songolo mpe boloba na ye : « Moteyi alobi : ‹ Tango na Ngai ekomi pene ; nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai epai na yo. › »\wj* \m \v 19 Bayekoli basalaki ndenge Yesu atindaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika. \r (Mlk 14.17-21; Lk 22.14, 21-23; Yn 13.21-30) \p \v 20 Tango pokwa ekomaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bayekoli zomi na mibale. \v 21 Wana bazalaki kolia, Yesu alobaki : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : moko kati na bino akoteka Ngai.\wj* \p \v 22 Bayokaki mawa mingi, mpe bakomaki kotuna Ye, moko sima na moninga : \pi1 — Nkolo, ezali ngai ? \p \v 23 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Moto oyo akoteka Ngai azali kolia sani moko elongo na Ngai.\wj* \v 24 \wj Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge ekomama na tina na Ye ; kasi mawa na moto oyo akoteka Mwana na Moto ! Elingaki kozala malamu koleka mpo na moto yango ete abotama te.\wj* \p \v 25 Yuda, ye oyo asengeli koteka Ye, alobaki : \pi1 — Moteyi, ezali ngai ? \p Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Olobi yango.\wj* \r (Mlk 14.22-25; Lk 22.15-20; 1Kl 11.23-25) \p \v 26 Wana bazalaki kolia, Yesu azwaki lipa ; sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki yango na bayekoli na koloba : \pi1 \wj — Oyo ezali nzoto na Ngai ! Bozwa mpe bolia.\wj* \p \v 27 Azwaki lisusu kopo ; mpe sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, apesaki bango yango na koloba : \pi1 \wj — Bomela yango bino nyonso ;\wj* \v 28 \wj ezali makila na Ngai ya Boyokani, makila oyo esopani mpo na bato ebele, mpo ete masumu na bango elimbisama.\wj* \v 29 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : kobanda sik’oyo, nakomela lisusu vino oyo te kino na mokolo oyo nakomela yango, ya sika, elongo na bino, kati na Bokonzi ya Tata na Ngai.\wj* \s1 Yesu asakoli ete Petelo akowangana Ye \r (Mlk 14.26-31; Lk 22.33-34; Yn 13.37-38) \p \v 30 Sima na yango, bayembaki banzembo ; bongo babimaki mpo na kokende na ngomba ya banzete ya olive. \v 31 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Na butu ya lelo, bokokweyisa kondima na bino mpo na Ngai ; pamba te ekomama :\wj* \q1 \wj « Nakobeta mobateli bibwele,\wj* \q2 \wj mpe bameme ya etonga ekopalangana. »\wj* \pi1 \v 32 \wj Kasi, sima na Ngai kosekwa, nakokende na Galile, liboso na bino.\wj* \p \v 33 Petelo alobaki : \pi1 — Ata soki bango nyonso bakweyisi kondima na bango likolo na Yo, ngai nakotikala kokweyisa kondima na ngai te. \p \v 34 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Nazali koloba na yo penza ya solo : kaka na butu ya lelo, liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato.\wj* \p \v 35 Petelo alobaki na Ye : \pi1 — Ata soki nasengeli kokufa elongo na Yo, nakowangana Yo te. \p Mpe bayekoli nyonso balobaki kaka ndenge moko. \s1 Yesu abondeli na Getisemane \r (Mlk 14.32-42; Lk 22.39-46) \p \v 36 Elongo na bayekoli na Ye, Yesu akomaki na esika oyo babengaka Getisemane mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Botikala awa, wana Ngai nakeyi kosambela kuna.\wj* \p \v 37 Wana amemaki Petelo mpe bana mibali mibale ya Zebede, akomaki mawa-mawa mpe komitungisa ; \v 38 alobaki na bango : \pi1 \wj — Motema na Ngai etondi na mawa pene nakufa ; botikala awa mpe bosenzela elongo na Ngai.\wj* \p \v 39 Akendeki mwa mosika, amikitisaki elongi kino na mabele mpe asambelaki boye : \pi1 \wj — Tata, soki ekoki kosalema, tika ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo.\wj* \p \v 40 Bongo azongaki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi ; alobaki na Petelo : \pi1 \wj — Boni, bokokaki te kosenzela elongo na Ngai mpo na ngonga moko ?\wj* \v 41 \wj Bosenzela mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama. Molimo ezalaka na posa makasi ya kosala malamu, kasi nzoto ezalaka na bolembu.\wj* \p \v 42 Akendeki lisusu mwa mosika, na mbala ya mibale, mpe abondelaki : \pi1 \wj — Tata na Ngai, soki ekoki kosalema te ete kopo oyo ya pasi ekende mosika na Ngai, wana tika ete mokano na Yo esalema !\wj* \p \v 43 Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango lisusu balala pongi, pamba te bayokaki pongi makasi mpe miso na bango ekomaki kilo. \v 44 Boye, atikaki bango mpe akendeki lisusu mosika ; mpe, mpo na mbala ya misato, abondelaki na maloba kaka wana. \v 45 Azongaki lisusu epai bayekoli na Ye bazalaki, mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Bozali kaka kokoba kolala pongi mpe kopema ? Ngonga ekoki ; Mwana na Moto akokabama na maboko ya bato ya masumu.\wj* \v 46 \wj Botelema ; tokende. Moto oyo ateki Ngai azali koya.\wj* \s1 Bakangi Yesu \r (Mlk 14.43-50; Lk 22.47-53; Yn 18.2-11) \p \v 47 Wana Yesu azalaki nanu koloba, Yuda, moko kati na bayekoli zomi na mibale, akomaki elongo na bato ebele oyo basimbaki mipanga mpe banzete ; ezalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato nde batindaki bango. \v 48 Moto oyo atekaki Yesu apesaki bango elembo moko ; alobaki na bango : « Moto oyo ngai nakopesa beze, ezali nde ye ; bokanga ye. » \p \v 49 Mbala moko, apusanaki pene ya Yesu mpe alobaki na Ye : \pi1 — Mbote, Moteyi ! \p Mpe apesaki Ye beze. \p \v 50 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Molingami na Ngai, likambo oyo oyei kosala awa, sala yango.\wj* \p Bongo bato mosusu oyo bayaki elongo na ye bapusanaki, basimbaki Yesu na makasi mpe bakangaki Ye. \p \v 51 Moko kati na baninga ya Yesu asembolaki loboko, abimisaki mopanga na ye wuta na ebombelo na yango, abetaki yango mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mpe akataki ye litoyi. \v 52 Kasi Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Zongisa mopanga na yo kati na ebombelo na yango, pamba te bato nyonso oyo babundaka na mopanga bakokufa na nzela ya mopanga.\wj* \v 53 \wj Okanisi ete nakoki te kobenga Tata na Ngai, oyo akoki mpe mbala moko kotinda ba-anjelu koleka bankoto zomi mpo na koya kosunga Ngai ?\wj* \v 54 \wj Nzokande, soki mpe esalemi ndenge wana, Makomi ekokokisama te ; pamba te ezali koloba ete makambo nyonso wana esengeli kosalema bongo.\wj* \p \v 55 Kaka na ngonga yango, Yesu alobaki na ebele ya bato : \pi1 \wj — Boni, nakomi motomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe na banzete ? Nazalaki kovanda mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kopesa malakisi na Ngai, mpe bokangaki Ngai te.\wj* \v 56 \wj Kasi makambo oyo nyonso esalemi mpo ete Makomi ya basakoli ekokisama.\wj* \p Bongo bayekoli nyonso basundolaki Ye mpe bakimaki. \s1 Yesu asambi \r (Mlk 14.53-65; Lk 22.54-55, 63-71; Yn 18.12-14, 19-23) \p \v 57 Bato oyo bakangaki Yesu bamemaki Ye liboso ya Kayifa, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai wapi balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato basanganaki. \v 58 Petelo azalaki kolanda Yesu na mosika, kino na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; akotaki kati na lopango mpe avandaki elongo na bakengeli mpo na kotala ndenge makambo ekosuka. \p \v 59 Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa, \v 60 kasi bazwaki yango te, atako bato mingi bakendeki mpo na kokosela Ye makambo. \p Bongo, bato mibale bayaki \v 61 mpe balobaki : \pi1 — Moto oyo alobaki : « Ngai nakoki kobuka Tempelo ya Nzambe mpe kotonga yango lisusu na mikolo misato. » \p \v 62 Mokonzi ya Banganga-Nzambe atelemaki mpe atunaki Yesu : \pi1 — Boni, ozali te na liloba ya kozongisa ? Olobi nini liboso ya makambo oyo bazali kofunda yo na yango ? \p \v 63 Kasi Yesu abatelaki kimia. \p Boye mokonzi ya Banganga-Nzambe alobaki na Ye : \pi1 — Na Kombo ya Nzambe na bomoi, napesi yo mitindo : « Yebisa biso soki ozali Klisto, Mwana na Nzambe. » \p \v 64 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Otatoli yango. Kasi nazali koloba na bino : Kobanda sik’oyo, bokomona Mwana na Moto kovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso mpe koya na nkembo na likolo ya mapata ya Likolo.\wj* \p \v 65 Mokonzi ya Banganga-Nzambe apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : \pi1 — Afingi Nzambe ! Mpo na nini koluka lisusu batatoli ? Bino moko boyoki ndenge nini afingi Nzambe ! \v 66 Bokanisi nini mpo na yango ? \p Bazongisaki : \pi1 — Abongi na kufa. \p \v 67 Babwakelaki Ye soyi na elongi mpe babetaki Ye makofi ; bato mosusu babetaki Ye bambata \v 68 mpe balobaki : \pi1 — Klisto, sakola kati na biso ; yebisa biso moto oyo abeti yo ! \s1 Petelo awangani Yesu \r (Mlk 14.66-72; Lk 22.56-62; Yn 18.15-18, 25-27) \p \v 69 Na tango wana, Petelo avandaki libanda, kati na lopango ya kati. Mwasi mosali moko apusanaki pene na ye mpe alobaki : \pi1 — Yo mpe, ozalaki elongo na Yesu, moto ya Galile. \p \v 70 Kasi Petelo awanganaki na miso ya bato nyonso : \pi1 — Nayebi te makambo oyo ozali koloba ! \p \v 71 Wana Petelo azalaki kokende na ekuke mpo na kobima, mwasi mosali mosusu amonaki ye mpe alobaki na bato oyo bazalaki wana : \pi1 — Moto oyo azalaki elongo na Yesu ya Nazareti. \p \v 72 Petelo awanganaki yango lisusu na kolapa ndayi : \pi1 — Nayebi moto wana te ! \p \v 73 Sima na mwa tango moke, bato oyo bazalaki wana bapusanaki mpe balobaki na Petelo : \pi1 — Ezali ya solo, yo mpe ozali moko kati na bato wana ; elobeli na yo ezali kofunda yo. \p \v 74 Bongo Petelo abandaki kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe : \pi1 — Tika ete Nzambe alakela ngai mabe soki nakosi ! Nalapi ndayi : Nayebi moto yango te ! \p Mpe, mbala moko, soso elelaki. \p \v 75 Bongo Petelo akanisaki maloba ya Yesu : \wj « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. »\wj* Abimaki mpe alelaki makasi na libanda. \c 27 \s1 Bamemi Yesu liboso ya Pilato \r (Mlk 15.1-2; Lk 22.66; 23.1; Yn 18.28) \p \v 1 Tango tongo etanaki, bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato basalelaki Yesu likita mpo na kobomisa Ye. \v 2 Bakangaki Ye basinga, bamemaki Ye mpe bakabaki Ye na maboko ya moyangeli Pilato. \s1 Yuda amidiembiki \r (Mis 1.18-19) \p \v 3 Tango Yuda oyo atekaki Yesu amonaki ete bakateli Yesu etumbu, ayokaki pasi mingi na motema mpe akendeki kozongisa mbongo wana ya bibende tuku misato epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato. \v 4 Alobaki na bango : \pi1 — Nasali masumu mpo ete nateki moto oyo asali mabe te ! \p Kasi bango bazongisaki : \pi1 — Etali biso na nini ? Etali nde yo moko ! \p \v 5 Yuda abwakaki mbongo yango kati na Tempelo, alongwaki wana mpe akendeki komidiembika. \p \v 6 Bakonzi ya Banganga-Nzambe balokotaki mbongo yango mpe balobaki : \pi1 — Mibeko epesi nzela te ya kotia mbongo oyo na ebombelo misolo ya Tempelo, pamba te ezali mbongo ya makila. \p \v 7 Boye, basanganaki mpe bazwaki mokano ya kosomba, na mbongo yango, elanga ya mosali mbeki, mpe ya kokomisa yango lilita mpo na kokunda bapaya. \v 8 Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka elanga yango elanga ya makila. \p \v 9 Ezali ndenge wana nde maloba ya mosakoli Jeremi ekokisamaki : « Bakamataki mbongo ya bibende ya palata tuku misato, motuya oyo bato ya Isalaele bakataki mpo na ye, \v 10 mpe basombaki na yango elanga ya mosali mbeki ndenge Nkolo atindaki ngai. » \s1 Yesu asambi liboso ya Pilato \r (Mlk 15.2-15; Lk 23.1-5; Yn 18.28–19.16) \p \v 11 Yesu asambaki liboso ya moyangeli. Moyangeli atunaki Yesu : \pi1 — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? \p Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Olobi yango.\wj* \p \v 12 Sima na yango, tango bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bafundaki Ye, azongisaki lisusu eloko moko te. \v 13 Bongo Pilato atunaki Ye : \pi1 — Ozali koyoka te makambo nyonso oyo bazali koloba mpo na kofunda Yo ? \v 14 Kasi Yesu azongisaki ata liloba moko te ; mpe moyangeli akamwaki makasi. \s1 Bakateli Yesu etumbu ya kufa \r (Mlk 15.6-14; Lk 23.13-23; Yn 18.39-40) \p \v 15 Na feti nyonso ya Pasika, moyangeli azalaki na momesano ya kobimisa na boloko mokangami moko oyo bato bazalaki kopona. \v 16 Na tango wana, ezalaki na mokangami moko oyo ayebanaki mingi, kombo na ye ezalaki Yesu Barabasi. \p \v 17 Tango Pilato amonaki ebele ya bato basangani, atunaki bango : \pi1 — Kati na Yesu Barabasi mpe Yesu oyo babengaka Klisto, bolingi nabimisela bino nani mpo ete akoma nsomi ? \p \v 18 Pilato ayebaki malamu ete ezali mpo na likunya nde bakabaki Yesu na maboko na ye. \v 19 Wana Pilato avandaki na esambiselo, mwasi na ye atindelaki ye maloba : \pi1 — Kokota te na makambo ya moto wana ya sembo ; pamba te na butu ya lelo, namoni pasi mingi kati na ndoto likolo na ye ! \p \v 20 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi ya bato bandimisaki ebele ya bato ete basenga na makasi kobima ya Barabasi longwa na boloko, mpe komona ndenge bakoboma Yesu. \p \v 21 Moyangeli atunaki bango lisusu : \pi1 — Kati na bango mibale, bolingi nabimisela bino nani ? \p Bazongisaki na koganga : \pi1 — Barabasi ! \p \v 22 Pilato atunaki bango : \pi1 — Nasala nini na Yesu oyo babengaka Klisto ? \p Bato nyonso bazongisaki : \pi1 — Baka ye na ekulusu ! \p \v 23 Pilato atunaki lisusu : \pi1 — Mabe nini asali ? \p Kasi bakobaki kaka koganga makasi koleka : \pi1 — Baka ye na ekulusu ! \r (Mlk 15.15; Lk 23.24-25; Yn 19.16) \p \v 24 Tango Pilato amonaki ete akokoka lisusu kosala eloko te, mpe ete mobulu ya bato ezalaki komata se komata, azwaki mayi, asukolaki maboko na ye liboso ya bato na koloba : \pi1 — Makila ya moto oyo ekotangama na moto na ngai te, kasi na mito na bino. \p \v 25 Bato nyonso bazongisaki : \pi1 — Tika ete makila na ye etangama na mito na biso mpe ya bana na biso ! \p \v 26 Pilato abimiselaki bango Barabasi ; mpe sima na kobetisa Yesu fimbu, apesaki Ye na maboko na bango mpo ete babaka Ye na ekulusu. \s1 Basoda batioli Yesu \r (Mlk 15.16-20; Lk 23.11; Yn 19.2-3) \p \v 27 Basoda ya moyangeli bakumbaki Yesu kati na esambiselo mpe basangisaki zingazinga na Ye lisanga mobimba ya basoda. \v 28 Balongolaki Ye bilamba, balatisaki Ye nzambala ya motane, \v 29 balatisaki Ye ekoti ya nzube na moto mpe basimbisaki Ye lingenda moke na loboko na Ye ya mobali ; bongo babandaki kofukama liboso na Ye mpo na kotiola Ye, na koloba : « Mbote, mokonzi ya Bayuda ! » \p \v 30 Bazalaki kobwakela Ye soyi, kokamata lingenda moke oyo basimbisaki Ye na loboko mpe kobeta Ye na moto. \v 31 Sima na bango kosakanela Ye, balongolaki Ye nzambala, balatisaki Ye bilamba na Ye mpe bakumbaki Ye mpo na kobaka Ye na ekulusu. \s1 Babaki Yesu na ekulusu \r (Mlk 15.21-32; Lk 23.26-43; Yn 19.17-22) \p \v 32 Wana bazalaki kobima na engumba, bakutanaki na moto moko ya Sirene, kombo na ye ezalaki Simona ; mpe bakangaki ye na makasi mpo ete amema ekulusu ya Yesu. \p \v 33 Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » oyo elingi koloba : esika ya mokuwa ya moto, \v 34 bapesaki Yesu masanga ya vino basangisa na mayi ya bololo mpo ete amela ; kasi sima na Ye komeka masanga yango, aboyaki komela yango. \v 35 Sima na bango kobaka Yesu na ekulusu, bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke ; \v 36 mpe bavandaki wana mpo na kokengela Ye. \p \v 37 Na likolo ya moto ya Yesu, batiaki makomi oyo mpo na kotalisa mpo nini bakatelaki Ye etumbu : \pc Moto oyo azali Yesu, Mokonzi ya Bayuda. \p \v 38 Babomi mibale ya bato babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. \p \v 39 Baleki nzela bazalaki kofinga Ye na koningisa mito na bango ; \v 40 bazalaki koloba : « Yo oyo okobuka Tempelo mpe okotonga yango lisusu na mikolo misato, mibikisa yo moko ! Soki ozali penza Mwana na Nzambe, kita longwa na ekulusu ! » \p \v 41 Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko elongo na bakambi ya bato bazalaki mpe kotiola Yesu na koloba : \v 42 « Abikisaki bato mosusu, kasi ye moko akoki komibikisa te ! Azali mokonzi ya Isalaele ! Tika ete akita sik’oyo longwa na ekulusu, bongo tokondimela Ye. \v 43 Atiaka elikya na ye kati na Nzambe ; tika ete Nzambe akangola ye sik’oyo soki alingaka ye, pamba te azalaki koloba : ‹ Nazali Mwana na Nzambe. › » \p \v 44 Babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu elongo na Yesu bazalaki mpe kofinga Ye ndenge wana. \r (Mlk 15.33-41; Lk 23.44-49; Yn 19.25-30) \p \v 45 Kobanda na ngonga ya midi kino na ngonga ya misato ya pokwa, molili ekotaki na mokili mobimba. \p \v 46 Pene na ngonga ya misato ya pokwa, Yesu agangaki : \pi1 \tl \+wj — Eloi, Eloi, lema sabachtani ?\+wj*\tl* \m Elingi koloba : \wj Nzambe na Ngai, Nzambe na Ngai, mpo na nini osundoli Ngai ?\wj* \p \v 47 Kati na bato oyo batelemaki wana, ndambo bayokaki Ye ; boye bakomaki koloba : \pi1 — Azali kobenga Eliya ! \p \v 48 Mbala moko, moko kati na bango akendeki mbangu kokamata eponze moko, azindisaki yango na vino ya ngayi, atiaki eponze yango na songe ya mwa nzete mpe apesaki yango Yesu mpo ete amela. \v 49 Kasi bato mosusu balobaki : \pi1 — Zela ! Totala soki Eliya akoya kobikisa ye. \p \v 50 Kasi Yesu agangaki lisusu makasi, mpe azongisaki molimo na Ye. \v 51 Kaka na tango yango, rido ya Tempelo epasukaki na biteni mibale, kobanda na likolo kino na se, mabele eninganaki, mabanga minene epasukaki, \v 52 bakunda efungwamaki, mpe banzoto ya basantu ebele oyo bakufa esekwaki : \v 53 ebimaki na bakunda mpe, sima na lisekwa ya Yesu, ekotaki kati na engumba ya bule epai wapi bato ebele bamonaki yango. \p \v 54 Tango mokonzi ya basoda ya Rome elongo na basoda oyo bazalaki kokengela Yesu bamonaki ndenge mabele eninganaki mpe nyonso oyo esalemaki, bayokaki somo makasi mpe balobaki : \pi1 — Moto oyo azalaki penza Mwana na Nzambe ! \p \v 55 Basi ebele bazalaki wana, bazalaki kotala na mosika ; balandaki Yesu longwa na Galile mpo na kosunga Ye. \v 56 Kati na basi yango, ezalaki na Mari, moto ya Magidala ; Mari, mama ya Jake mpe ya Jozefi ; mpe mama ya bana ya Zebede. \s1 Bakundi Yesu \r (Mlk 15.42-47; Lk 23.50-56; Yn 19.38-42) \p \v 57 Tango pokwa ekomaki, mozwi moko ayaki ; kombo na ye ezalaki Jozefi, moto ya mboka Arimate ; ye mpe akomaki moyekoli ya Yesu. \v 58 Akendeki kosenga nzoto ya Yesu epai ya Pilato ; mpe Pilato apesaki mitindo ete bapesa ye yango. \v 59 Jozefi azwaki nzoto ya Yesu, alingaki yango na liputa ya lino ya peto \v 60 mpe atiaki nzoto yango kati na kunda moko ya sika, oyo atobolisaki ye moko kati na libanga moko ya monene. Mpe atindikaki libanga mosusu ya monene liboso ya ekotelo ya kunda yango, mpe azongaki. \v 61 Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bavandaki wana, na ngambo mosusu ya kunda. \p \v 62 Mokolo oyo elandaki, mokolo oyo elandaki Mokolo ya kobongisa Saba, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe Bafarizeo bakendeki epai ya Pilato \v 63 mpo na koloba na ye : \pi1 — Mokonzi, makanisi ezongeli biso na tina na mokosi wana ! Tango azalaki na bomoi, alobaki : « Sima na mikolo misato, nakosekwa. » \v 64 Yango wana, pesa mitindo ete bakengela malamu kunda yango kino na mokolo ya misato. Soki te, bayekoli na ye bakoya koyiba nzoto mpo ete, na sima, baloba na bato ete asekwi kati na bakufi. Lokuta oyo ya suka ekoya kozala lisusu mabe koleka oyo ya liboso. \p \v 65 Pilato azongisaki : \pi1 — Bozwa bakengeli mpe bokende kokengela kunda ndenge bokanisi kosala. \p \v 66 Boye bakendeki mpe basalaki nyonso oyo ekoki mpo ete kunda ekengelama malamu ; batiaki elembo na libanga oyo bakangaki na yango kunda mpe batiaki bakengeli. \c 28 \s1 Yesu asekwi \r (Mlk 16.1-8; Lk 24.1-12; Yn 20.1-2) \p \v 1 Sima na mokolo ya Saba, na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, Mari, moto ya mboka Magidala, mpe Mari mosusu bakendeki kotala kunda. \v 2 Mbala moko, mabele eninganaki makasi, pamba te anjelu ya Nkolo akitaki longwa na Likolo, akendeki na kunda, atindikaki libanga mpe avandaki na likolo na yango. \v 3 Azalaki kongenga lokola mikalikali, mpe bilamba na ye ezalaki pembe makasi lokola mvula ya pembe. \v 4 Bakengeli bakomaki kolenga mpo na somo mpe bakomaki lokola bato ya kokufa. \p \v 5 Kasi anjelu alobaki na basi : « Bobanga te ! Nayebi ete bozali koluka Yesu oyo babakaki na ekulusu. \v 6 Azali lisusu awa te, pamba te asili kosekwa, ndenge kaka alobaki. Boya kotala esika oyo nzoto na Ye ezalaki, \v 7 mpe bokende noki koyebisa bayekoli na Ye : ‹ Asili kosekwa kati na bakufi ; akei liboso na bino, na Galile ; ezali kuna nde bokomona Ye. › Yango nde makambo oyo nazalaki na yango ya koyebisa bino. » \p \v 8 Balongwaki noki na kunda, na somo mpe na esengo makasi ; bapotaki mbangu mpo na kokende kopesa sango epai ya bayekoli na Ye. \v 9 Mbala moko, Yesu akutanaki na bango mpe alobaki : \pi1 \wj — Mbote na bino !\wj* \p Bapusanaki pene na Ye, basimbaki makolo na Ye mpe bagumbamelaki Ye. \p \v 10 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bobanga te ! Bokende koyebisa bandeko na Ngai ete bakende na Galile ; ezali kuna nde bakomona Ngai.\wj* \p \v 11 Wana basi bazalaki kokende, ndambo ya bakengeli bazongaki kati na engumba mpo na koyebisa na bakonzi ya Banganga-Nzambe, makambo nyonso oyo ewutaki koleka. \v 12 Bakonzi ya Banganga-Nzambe babengaki bakambi ya bato mpe, elongo na bango, basalaki mwango moko, bapesaki mbongo ebele epai ya basoda \v 13 mpe balobaki na bango : « Tala ndenge bosengeli koloba : ‹ Wana tozalaki kati na pongi, bayekoli na ye bayaki koyiba nzoto na ye, na butu. › \v 14 Soki likambo yango ekomi na matoyi ya moyangeli, tokoyeba kosolola na ye mpe kosala nyonso mpo ete bomema ngambo te. » \p \v 15 Basoda bazwaki mbongo mpe basalaki ndenge kaka batindaki bango. Lisolo yango epanzanaki kati na Bayuda mpe ezali kolobama kino na mokolo ya lelo. \s1 Yesu abimeli bayekoli na Ye \p \v 16 Bayekoli zomi na moko bakendeki na Galile, na ngomba oyo Yesu ayebisaki bango ete bakende. \v 17 Tango bamonaki Ye, bagumbamelaki Ye ; kasi bamosusu kati na bango bandimaki te. \p \v 18 Yesu apusanaki pene na bango mpe alobaki : \pi1 \wj — Bokonzi nyonso epesameli Ngai, ezala kati na Likolo to na mokili.\wj* \v 19 \wj Bokende, bokomisa bato ya bikolo nyonso bayekoli na Ngai, bobatisa bango na Kombo ya Tata, ya Mwana mpe ya Molimo Mosantu ;\wj* \v 20 \wj bolakisa bango kotosa makambo nyonso oyo natindaki bino. Boyeba malamu ete nazali elongo na bino mikolo nyonso kino na suka ya mokili.\wj*