\id MAL Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Malashi \toc1 Malashi \toc2 Malashi \toc3 Mal \mt1 Malashi \c 1 \s1 Koponama ya Isalaele \p \v 1 Liloba na Yawe. Liloba na Yawe epai ya Isalaele na nzela ya mosakoli Malashi. \q1 \v 2 « Ngai, nalingaki bino, » \q2 elobi Yawe, \q2 « kasi bino bozali kotuna Ngai : \q1 ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete olingaki biso ? › \q2 Boni, Ezawu azalaki ndeko ya Jakobi te ? » \q2 elobi Yawe, \q2 « Nzokande, nalingaki Jakobi, \q1 \v 3 kasi nayinaki Ezawu ; \q2 bongo nabongolaki bangomba na ye esobe \q2 mpe nakabaki libula na ye epai ya bambwa ya zamba. » \q1 \v 4 Edomi akoki koloba : \q2 « Ata babebisi mokili na biso, \q1 tokotonga yango kaka lisusu ! » \q2 Kasi tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q1 « Solo, bakotonga na bango yango, \q2 kasi Ngai nakobuka yango ! \q1 Bakobenga mokili yango : \q2 ‹ Mokili ya makambo mabe, \q2 bato oyo bazali tango nyonso na se ya kanda ya Yawe. › \q1 \v 5 Bokomona yango na miso na bino moko \q2 mpe bokoloba : ‹ Yawe azali Monene \q2 koleka ata bandelo ya etando ya Isalaele. › \s1 Mbeka oyo esengeli \p \v 6 Mwana mobali apesaka tata na ye lokumu, mpe mowumbu apesaka nkolo na ye lokumu. Soki Ngai nazali Tata, wapi lokumu oyo esengeli na Ngai ? Soki nazali Nkolo, wapi lokumu na Ngai ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \p « Ezali bino Banganga-Nzambe nde bozali kosambwisa Kombo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tozali kosambwisa Kombo na Yo ? › \p \v 7 Bozali kotia bilei ya mbindo na etumbelo na Ngai, kasi bozali mpe kotuna : ‹ Eloko nini ezali kolakisa ete tokomisi etumbelo na Yo mbindo ? › \p Ezali tango bolobaka : ‹ Mesa ya Yawe ezali na tina te. › \v 8 Ezali tango bobonzaka lokola mbeka nyama oyo ekufa miso ; boni, yango ezali mabe te ? Bomeka nanu kopesa yango epai ya moyangeli na bino ; boni, akosepela na bino ? Akondima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \p \v 9 « Sik’oyo, bozali mpe kobondela Nzambe ete asalela bino ngolu na makabo ya lolenge oyo na maboko ! Boni, andima bino solo ? » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \p \v 10 « Nani kati na bino akoki kozwa mokano ya kokanga bikuke ya Tempelo mpo ete bopelisa moto na pamba te na etumbelo na Ngai ? Nasepeli na bino ata moke te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ; « mpe nakoyamba te makabo oyo ewuti na maboko na bino. \p \v 11 Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, longwa na ebimelo kino na elalelo ya moyi ; bakobonza na bisika nyonso malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Kombo na Ngai mpe makabo ya peto, pamba te Kombo na Ngai ekozala monene kati na bikolo, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \p \v 12 « Kasi bino, bozali kosambwisa yango tango bozali koloba ete mesa ya Nkolo ezali na tina te mpe biloko na yango ezali mbindo. \v 13 Bozali koloba lisusu : ‹ Mokumba nini lisusu oyo ! › Bozali mpe kotiola Ngai lisusu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Tango bozali komema bibwele oyo ezoka, oyo etambolaka tengu-tengu to oyo ezali na bokono, mpe bozali kobonza yango lokola mbeka, boni, nandima yango na maboko na bino ? » elobi Yawe. \p \v 14 « Tika ete alakelama mabe, ye oyo azali na ebwele ya kitoko kati na etonga na ye, mpe alapi ndayi ete akobonza yango epai na Yawe, kasi abonzi ebwele oyo ebela ! Pamba te Ngai, nazali Mokonzi Monene, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe bikolo nyonso esengeli kobanga Kombo na Ngai. \c 2 \s1 Likebisi epai ya Banganga-Nzambe \p \v 1 « Sik’oyo, bino Banganga-Nzambe, likebisi oyo epesami epai na bino : \v 2 Soki boyoki te, soki boboyi kozwa mokano ya kopesa Kombo na Ngai lokumu, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakotindela bino elakeli mabe mpe nakolakela lipamboli na bino mabe. Solo, nasili kolakela yango mabe, pamba te bozwaki mokano te ya kopesa Kombo na Ngai lokumu. \p \v 3 Likolo na bino, nakopamela bakitani na bino, nakobwakela bino basalite ya banyama na bino na bilongi, salite ya banyama oyo bobonzaka na mikolo ya bafeti na bino, mpe bakomema bino nzela moko na basalite yango. \v 4 Bokoyeba solo ete napesi bino likebisi oyo mpo ete boyokani na Ngai elongo na Levi esuka te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \v 5 « Boyokani na Ngai elongo na ye ezali boyokani ya bomoi mpe ya kimia, mpe nakopesa ye yango mpo ete atosa Ngai. Atosaki Ngai solo mpe azalaki kolenga liboso ya Kombo na Ngai. \v 6 Monoko na ye ezalaki kobimisa malakisi ya solo ; lokuta etikalaki komonana na bibebu na ye te. Azalaki kotambola elongo na Ngai na kimia mpe na alima. Na nzela na ye, bato ebele batikaki kotambola na nzela ya masumu. \v 7 Pamba te bibebu ya Nganga-Nzambe esengeli kobatela boyebi, mpe bato basengeli kozwa boyebi na monoko na ye mpo ete azali ntoma ya Yawe, Mokonzi ya mampinga. \v 8 Kasi bino, bopengwi na nzela mpe bobetisi bato ebele mabaku na malakisi na bino ; bobebisi boyokani elongo na Balevi, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \v 9 « Boye, nasalaki ete botiolama mpe bosambwa liboso ya bato nyonso, pamba te bolandaki banzela na Ngai te, kasi bozalaki kopona bilongi na makambo oyo etali mibeko. » \s1 Mabala elongo na bapaya \p \v 10 Boni, biso nyonso tozali bana ya tata moko te ? Boni, tokelama na Nzambe moko te ? Bongo mpo na nini tozali kobebisa boyokani ya batata na biso na ndenge tozali kosalana mabe biso na biso ? \v 11 Bato ya Yuda batamboli na boyengebene te, bakotisi likambo ya nkele kati na Isalaele mpe na Yelusalemi, pamba te bato ya Yuda babebisi bosantu ya Esika ya bule ya Yawe, Esika ya bule oyo Yawe alingaka makasi : babali basi oyo basambelaka nzambe mopaya. \v 12 Mpo na mobali nyonso oyo akosala bongo, azala nani, tika ete Yawe alongola ye na bandako ya kapo ya Jakobi, ata amemi makabo epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga. \s1 Koboma libala \p \v 13 Tala makambo mosusu oyo bosalaka : bozali kotondisa etumbelo ya Yawe na mayi ya miso, bozali kolelalela mpo ete Yawe azali kotala lisusu makabo na bino te mpe aboyi koyamba yango na maboko na bino. \v 14 Bozali kotuna : « Mpo na nini boye ? » Ezali mpo ete Yawe azali Motatoli kati na yo mpe mwasi na yo ya bolenge, kasi yo okosaki ye. Nzokande, azali mwasi oyo okangani na ye na nzela ya boyokani. \p \v 15 Boni, Yawe akomisaki bango te moto moko ? Bazali ya Yawe na mosuni mpe na molimo. Moto yango alukaka nini ? Alukaka bana kowuta epai na Nzambe. Boye, bosala keba mpo na bomoi na bino. Tika ete moto moko te akosa mwasi na ye ya bolenge ! \p \v 16 Pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nayinaka likambo ya koboma libala ; ekokani na moto oyo elamba na ye ezwi makila tango abomi moto, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. Yango wana, bosala keba mpo na bomoi na bino mpe botikala sembo. \s1 Mokolo ya kosambisama \p \v 17 Bolembisi Yawe na maloba na bino mpe bozali lisusu kotuna : « Tolembisi Yo na likambo nini ? » \p Ezali tango bozali koloba : « Moto oyo asalaka mabe azali malamu na miso ya Yawe, mpe Yawe asepelaka na ye » to mpe « Wapi Nzambe ya bosembo ? » \c 3 \p \v 1 « Nakotinda ntoma na Ngai ; ye nde akoya liboso mpo na kobongisela Ngai nzela. Boye Yawe oyo bozali kozela akoya na pwasa kati na Tempelo na Ye ; ntoma ya boyokani oyo bolingi akoya, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \p \v 2 Kasi nani akobika na mokolo oyo akoya ? Nani akotelema na mokolo oyo akomonana ? Pamba te azali lokola moto ya monyangwisi bibende na moto, lokola sabuni oyo etelisaka bilamba. \v 3 Akovanda lokola monyangwisi bibende mpe mopetoli palata na moto. Akopetola bana mibali ya Levi mpe akolekisa bango na moto ndenge bapetolaka wolo mpe palata, mpe bakokoma mpo na Yawe bato oyo bamemelaka Ye makabo kolanda ndenge esengeli kozala. \v 4 Bongo makabo ya Yuda mpe ya Yelusalemi ekosepelisa Yawe, ndenge ezalaki na tango ya kala. \p \v 5 « Nakopusana pene na bino mpo na kosambisama, nakosala na lombangu mpo na kofunda bato ya maji, ya ekobo, bato oyo balapaka ndayi ya lokuta, bato oyo banyokolaka basali na bango, basi bakufisa mibali mpe bana bitike, oyo banyokolaka bapaya mpe batosaka Ngai te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \s1 Kobengama mpo na kobongola mitema \p \v 6 « Ngai Yawe, nabongwanaka te. Mpo na yango, bino bana mibali ya Jakobi, bozali kaka. \v 7 Wuta na tango ya bakoko na bino, bozalaki kaka kobuka mibeko na Ngai mpe bozalaki kotosa Ngai te. Bozonga epai na Ngai, mpe Ngai nakozonga epai na bino, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \p « Kasi bozali komituna : ‹ Tokozonga ndenge nini ? › \p \v 8 Boni, moto akoki solo kokosa Nzambe ? Nzokande bino, bozali kokosa Ngai. Kasi bozali koloba : ‹ Tokosi Yo na likambo nini ? › \p Bokosi Ngai na eteni na bino ya zomi mpe na makabo. \v 9 Bozali na se ya elakeli mabe, pamba te bino nyonso, ekolo oyo mobimba, bozali kokosa Ngai. \v 10 Boye, bomema biteni na bino nyonso ya zomi, na mobimba na yango, na ebombelo bomengo ya Tempelo mpo ete bilei ezanga te kati na Ndako na Ngai. Na bongo, bomeka Ngai, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « mpo na kotala soki nakofungolela bino te maninisa ya Lola mpe soki nakosopela bino te lipamboli na Ngai, na bofuluki oyo ezanga ndelo. \v 11 Nakopekisa banyama mike-mike kolia bambuma ya bilanga na bino, bongo bilanga na bino ya vino ekotikala kozanga bambuma te, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \v 12 « Bato ya bikolo nyonso bakoloba ete bozali bato ya esengo, pamba te mokili na bino ekozala mokili ya malamu mpo na kovanda, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \p \v 13 Yawe alobi : « Bozali koloba makambo mabe mpo na kotelemela Ngai. \pi1 Kasi bozali kotuna : ‹ Maloba nini ya mabe tolobi mpo na kotelemela Yo ? › \p \v 14 Bozali lisusu koloba : ‹ Kosalela Nzambe ezali na tina te. Litomba nini penza ezali na kotosa mibeko na Ye mpe na komiboya liboso ya Yawe, Mokonzi ya mampinga ? \v 15 Tosengeli sik’oyo komona bato ya lofundu lokola bato ya esengo, bato mabe bazali kokende liboso. Atako bazali kobeta tembe na Nzambe, kasi bazali kaka kolonga. › » \p \v 16 Ndenge wana nde bato oyo batosaka Yawe bazalaki kosolola bango na bango, kasi Yawe ayokaki masolo na bango. Boye buku moko ya ekaniseli ekomamaki liboso ya Yawe mpo na bato oyo batosaka Yawe mpe bapesaka Kombo na Ye lokumu. \p \v 17 « Na mokolo oyo nakomonisa nguya na Ngai, bakokoma bato na Ngai, bomengo na Ngai ya talo. Nakobatela bango ndenge tata abatelaka mwana oyo asalelaka ye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \v 18 « Bongo bokomona lisusu bokeseni kati na moto ya sembo mpe moto mabe, kati na moto oyo asalelaka Nzambe mpe moto oyo asalelaka Ye te. \c 4 \p \v 1 Pamba te mokolo yango ezali koya ; ekozala moto makasi lokola fulu ya moto. Bato nyonso ya lofundu mpe bato nyonso oyo basalaka mabe bakokoma lokola matiti ya kokawuka. Mokolo yango ekozikisa bango, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. « Ekotikala ata mosisa to etape te. \p \v 2 Kasi mpo na bino oyo botosaka Kombo na Ngai, moyi ya bosembo ekobima mpe ekomemela bino lobiko. Boye, bokobina mpe bokopumbwa na esengo lokola bana ngombe ya mibali kati na lopango. \v 3 Bokonyata bato mabe, pamba te bakokoma lokola putulu na se ya matambe na bino, na mokolo oyo nazali kobongisa, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \p \v 4 « Bokanisa Mobeko, malako mpe mitindo oyo napesaki epai ya Moyize, mosali na Ngai, na ngomba Orebi, mpo na Isalaele mobimba. \v 5 Liboso ete mokolo ya Yawe eya, mokolo monene mpe ya somo, nakotindela bino mosakoli Eliya. \v 6 Akozongisa mitema ya batata epai ya bana, mpe mitema ya bana epai ya batata, soki te nakoya kobebisa mokili na nzela ya bilakeli mabe. »