\id LUK Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Luka \toc1 Sango Malamu kolanda Luka \toc2 Luka \toc3 Lk \mt2 Sango Malamu kolanda \mt1 Luka \c 1 \p \v 1 Bato mingi bamekaki kokoma makambo oyo elekaki kati na biso, \v 2 kolanda ndenge bayebisaki biso yango na bato oyo, wuta na ebandeli, bamonaki yango na miso mpe bakomaki basali ya Liloba na Nzambe. \p \v 3 Yango wana, ngai mpe, sima na ngai kotuna-tuna mpo na koluka koyeba malamu makambo nyonso, banda na ebandeli, namonaki lisusu ete ezali malamu mpo na ngai kokomela yo yango ndenge elandanaki, Teofile ya lokumu, \v 4 mpo ete oyeba bosolo ya malakisi oyo ozwaki. \ms1 Mbotama mpe bomwana ya Yesu \s1 Sango ya mbotama ya Yoane Mobatisi \p \v 5 Na tango oyo Erode azalaki mokonzi ya Yuda, ezalaki na Nganga-Nzambe moko, kombo na ye ezalaki « Zakari ; » azalaki moko kati na Banganga-Nzambe ya lisanga ya Abiya. Mwasi na ye, Elizabeti, azalaki mokitani ya Aron. \v 6 Bango mibale bazalaki bato ya sembo liboso ya Nzambe, bazalaki kotosa, na ndenge esengeli, mibeko nyonso mpe mitindo nyonso ya Nkolo. \v 7 Kasi bazalaki na mwana te, pamba te Elizabeti azalaki ekomba ; mpe bango mibale bakomaki mibange. \p \v 8 Mokolo moko, wana Zakari azalaki kosala mosala na ye lokola Nganga-Nzambe, liboso ya Nzambe, pamba te ezalaki ngala ya lisanga na ye, \v 9 aponamaki na zeke, kolanda momesano ya bonganga-Nzambe, mpo na kokota kati na Esika ya bule ya Nkolo mpe kotumba kuna malasi ya ansa. \v 10 Tango ekomaki ngonga ya kotumba malasi ya ansa, lisanga mobimba ya basambeli ezalaki kosambela na libanda. \v 11 Bongo anjelu moko ya Yawe abimelaki ye ya kotelema na ngambo ya loboko ya mobali ya etumbelo ya malasi ya ansa. \v 12 Tango Zakari amonaki ye, abangaki makasi, mpe somo monene ekangaki ye. \v 13 Kasi anjelu alobaki na ye : \pi1 — Zakari, kobanga te ! Nzambe ayoki mabondeli na yo. Mwasi na yo, Elizabeti, akobotela yo mwana mobali, mpe okopesa ye kombo « Yoane. » \v 14 Mwana yango akosala esengo na yo, mpe okosepela na ye makasi ; mpe bato ebele bakosepela mpo na mbotama na ye, \v 15 pamba te akozala moto monene na miso ya Nkolo. Akomela te ezala vino to masanga ya makasi, mpe akozala atonda na Molimo Mosantu wuta na libumu ya mama na ye. \v 16 Akozongisa bato ebele ya Isalaele epai ya Nkolo, Nzambe na bango, \v 17 mpe akotambola liboso ya Nzambe, elongo na molimo mpe nguya oyo ezalaki kovanda kati na Eliya, mpo na kozongisa boyokani kati na batata mpe bana na bango, mpo na kosala ete batomboki bakoma kokanisa lokola bato ya sembo, mpe mpo na kobongisa bato mpo na Nkolo. \p \v 18 Zakari atunaki anjelu : \pi1 — Ndenge nini nakoki koyeba ete ezali ya solo ? Pamba te, ngai, nazali mobange, mpe mibu ya mbotama ya mwasi na ngai esili kopusana makasi. \p \v 19 Anjelu azongiselaki ye : \pi1 — Nazali Gabrieli ; natelemaka liboso ya Nzambe oyo atindi ngai mpo na koyebisa yo mpe kopesa yo basango oyo ya malamu. \v 20 Lokola ondimeli maloba na ngai te, oyo ekokokisama solo na tango na yango oyo ekatama, okokoma baba mpe okokoka lisusu koloba te kino na mokolo oyo makambo yango ekokokisama. \p \v 21 Na tango yango, bato bazalaki kozela Zakari mpe komituna mpo na nini azali kowumela tango molayi kati na Esika ya bule. \v 22 Tango abimaki, azalaki lisusu te na makoki ya koloba na bango ; boye basosolaki ete azwi emoniseli kati na Esika ya bule, pamba te akomaki koloba na bango na nzela ya bilembo mpe atikalaki baba. \v 23 Tango mikolo na ye ya mosala ekokaki, azongaki na ndako na ye. \p \v 24 Sima na mwa tango, mwasi na ye, Elizabeti, akomaki na zemi mpe abombamaki sanza mitano. \v 25 Azalaki komilobela : « Tala likambo oyo Nkolo asali mpo na ngai ! Na mikolo oyo, atalisi ngai ngolu na Ye mpe alongoli soni na ngai na miso ya bato. » \s1 Sango ya mbotama ya Yesu \p \v 26 Sima na basanza motoba, Nzambe atindaki anjelu Gabrieli kati na engumba moko ya Galile, kombo na yango ezalaki « Nazareti. » \v 27 Atindaki ye epai ya elenge mwasi Mari oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe azalaki mobandami ya libala na mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jozefi, mokitani ya Davidi. \v 28 Anjelu akotaki epai ya Mari mpe alobaki na ye : \pi1 — Mbote na yo, yo oyo osili kozwa ngolu monene ! Nkolo azali elongo na yo ! \p \v 29 Tango Mari ayokaki maloba ya anjelu, amitungisaki makasi mpe akomaki komituna soki mbote yango elakisi nini. \p \v 30 Kasi anjelu alobaki na ye : \pi1 — Mari, kobanga te ! Pamba te Nzambe asaleli yo ngolu ! \v 31 Okozwa zemi, okobota mwana mobali mpe okopesa Ye kombo « Yesu. » \v 32 Akozala Moto monene, mpe bakobenga Ye : Mwana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo. Nkolo Nzambe akopesa Ye kiti ya bokonzi ya Davidi, koko na Ye. \v 33 Akozala Mokonzi ya libota ya Jakobi mpo na libela, mpe bokonzi na Ye ekozala na suka te. \p \v 34 Mari atunaki anjelu : \pi1 — Ekosalema ndenge nini, pamba te nayebi nanu nzoto ya mibali te ? \p \v 35 Anjelu azongiselaki ye : \pi1 — Molimo Mosantu akokitela yo, mpe nguya ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ekozipa yo na elilingi na Ye. Boye Mosantu oyo okobota akobengama Mwana na Nzambe. \v 36 Ndeko na yo ya mwasi, Elizabeti, azali mpe na zemi ; akobota mwana mobali, atako akomi mobange. Ye oyo bazalaki kobenga « ekomba » akomi sik’oyo na zemi ya sanza motoba. \v 37 Pamba te Nzambe alembanaka eloko te. \p \v 38 Mari azongiselaki ye : \pi1 — Nazali mwasi mowumbu ya Nkolo, tika ete maloba na yo ekokisamela ngai ! \p Bongo anjelu akabwanaki na ye. \s1 Mari akei kotala Elizabeti \p \v 39 Sima na mwa mikolo, Mari atelemaki mpe akendeki na lombangu, na engumba moko kati na mokili ya bangomba ya Yuda. \v 40 Kuna, akotaki na ndako ya Zakari mpe apesaki Elizabeti mbote. \v 41 Tango kaka Elizabeti ayokaki mbote ya Mari, mwana aninganaki kati na libumu na ye. Elizabeti atondisamaki na Molimo Mosantu \v 42 mpe agangaki na mongongo makasi : \pi1 — Ozali ya kopambolama kati na basi, mpe esengo na mwana oyo azali kati na libumu na yo ! \v 43 Ngai nde nani mpo ete mama ya Nkolo na ngai aya epai na ngai ? \v 44 Pamba te, tango kaka nayoki mbote na yo, mwana aningani na esengo kati na libumu na ngai. \v 45 Esengo na mwasi oyo andimaki ete Nkolo akokokisa elaka oyo apesaki ye ! \p \v 46 Bongo Mari alobaki : \q1 — Molimo na ngai ezali kokumisa Nkolo, \q2 \v 47 mpe natondi na esengo mpo na Nzambe, Mobikisi na ngai, \q1 \v 48 pamba te atali kozanga lokumu ya mwasi mowumbu na Ye. \q2 Yango wana, kobanda lelo, \q2 bato ya tango nyonso bakobanda kobengaka ngai mwasi ya esengo, \q1 \v 49 pamba te Nzambe-Na-Nguya-Nyonso asaleli ngai makambo minene ; \q2 Kombo na Ye ezali Bule. \q1 \v 50 Atalisaka boboto na Ye tango nyonso \q2 epai ya bato oyo batosaka Ye. \q1 \v 51 Asali misala minene na nguya ya loboko na Ye, \q2 apanzi bato oyo batonda na lolendo, \q1 \v 52 akitisi bakambi wuta na bakiti na bango ya bokonzi, \q2 kasi atomboli bato oyo bamikitisaka. \q1 \v 53 Atondisi na biloko ya malamu \q2 bato oyo bazalaki na nzala, \q2 mpe azongisi bazwi maboko pamba. \q1 \v 54 Solo, asungi Isalaele, mosali na Ye, \q2 abosani te kotalisa boboto na Ye, \q1 \v 55 ndenge alakaki yango epai ya bakoko na biso, \q2 epai ya Abrayami mpe epai ya bakitani na ye, \q2 mpo na tango nyonso. \p \v 56 Mari avandaki basanza pene misato elongo na Elizabeti ; sima, azongaki na ndako na ye. \s1 Mbotama ya Yoane Mobatisi \p \v 57 Wana eleko oyo Elizabeti asengelaki kobota ekokaki, abotaki mwana mobali. \v 58 Baninga mpe bandeko ya Elizabeti bayokaki ete Nkolo asaleli ye ngolu monene, mpe basepelaki na ye elongo. \p \v 59 Na mokolo ya mwambe, sima na mbotama ya mwana, bakendeki kokatisa mwana ngenga ; balingaki kopesa ye kombo ya tata na ye, Zakari. \v 60 Kasi mama na ye alobaki : \pi1 — Te ! Kombo na ye ezali Yoane. \p \v 61 Kasi balobaki na ye : \pi1 — Ezali na moto moko te, kati na libota na yo, oyo azali na kombo wana. \p \v 62 Bongo batunaki tata ya mwana, na nzela ya bilembo, mpo ete bayeba soki kombo nini alingaki kopesa na mwana. \v 63 Zakari asengaki mwa libaya mpe akomaki : « Kombo na ye ezali Yoane. » Mpe bango nyonso bakamwaki. \p \v 64 Mbala moko, monoko ya Zakari efungwamaki mpe lolemo na ye ekangolamaki ; akomaki lisusu koloba mpe kokumisa Nzambe. \p \v 65 Baninga na bango nyonso ya pembeni batondaki na somo mpe bazalaki kolobela makambo yango nyonso, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. \v 66 Bato nyonso oyo bayokaki sango yango bazalaki kokamwa yango mpe komituna : « Yango mwana oyo akozala nani ? » Pamba te loboko ya Nkolo ezalaki elongo na ye. \s1 Loyembo ya Zakari \p \v 67 Tata na ye, Zakari, atondisamaki na Molimo Mosantu mpe akomaki kosakola : \q1 \v 68 « Tika ete Nkolo, Nzambe ya Isalaele, akumisama, \q2 pamba te ayei mpe akangoli bato na Ye ; \q1 \v 69 abimiseli biso Mobikisi ya nguya, \q2 kati na libota ya Davidi, mosali na Ye ; \q1 \v 70 akokisi elaka na Ye, oyo apesa wuta kala \q2 na nzela ya basakoli na Ye ya bule, \q1 \v 71 lobiko liboso ya banguna na biso, \q2 mpe kokangolama wuta na maboko ya bayini na biso ; \q1 \v 72 atalisi boboto na Ye epai ya bakoko na biso \q2 mpe akanisi Boyokani na Ye ya bule ; \q1 \v 73 akokiseli biso ndayi oyo alapaki \q2 epai ya Abrayami, koko na biso, \q1 \v 74 ete akokangola biso na maboko ya banguna na biso, \q2 mpe akopesa biso nzela ya kosalela Ye na kobanga te, \q1 \v 75 kati na bosantu mpe bosembo, \q2 liboso na Ye, mikolo nyonso ya bomoi na biso. \b \q1 \v 76 Bongo yo, mwana na ngai, bakobenga yo : \q1 mosakoli ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; \q2 pamba te okotambola na liboso ya Nkolo \q2 mpo na kobongisela Ye nzela \q1 \v 77 mpe mpo na koyebisa bato na Ye \q2 ete Nzambe akobikisa bango mpe akolimbisa masumu na bango, \q1 \v 78 mpo na mawa mpe boboto ya Nzambe na biso, \q2 oyo na nzela na yango moyi ya tongo ekongengela biso wuta na likolo, \q1 \v 79 mpo na kopesa pole na bato nyonso \q2 oyo bavandi kati na molili mpe kati na elili ya kufa, \q1 mpe mpo na kotambolisa makolo na biso \q2 kati na nzela ya kimia. » \p \v 80 Mwana azalaki kokola, mpe molimo na ye ezalaki kokemba ; azalaki kovanda kati na bisobe kino na mokolo oyo ayaki komimonisa na miso ya bato ya Isalaele. \c 2 \s1 Mbotama ya Yesu \r (Mat 1.17-25) \p \v 1 Na tango wana, Sezare Ogisite abimisaki mobeko ya kotanga motango ya bato nyonso oyo bazalaki kovanda na mikili nyonso oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Rome. \v 2 Ezalaki mbala ya liboso ya kotanga motango ya bato, wana Kiriniusi azalaki moyangeli ya Siri. \p \v 3 Bato nyonso bazalaki kokende komikomisa, moto na moto kati na engumba na ye. \v 4 Jozefi mpe alongwaki na engumba Nazareti, kati na etuka ya Galile, mpo na kokende na Beteleemi, engumba ya Davidi, kati na etuka ya Yuda, pamba te azalaki moto ya ndako mpe ya libota ya Davidi. \v 5 Akendeki kuna mpo na kokomisa kombo na ye mpe kombo ya Mari, mobandami na ye ya libala, oyo azalaki na zemi. \p \v 6 Wana bazalaki na Beteleemi, mokolo na ye ya kobota ekokaki. \v 7 Mari abotaki mwana mobali, mwana na ye ya liboso ; alingaki ye na bilamba mpe alalisaki ye kati na elielo ya bibwele, pamba te esika ezalaki te mpo na bango kati na ndako ya bapaya. \p \v 8 Kati na etuka yango, ezalaki na babateli bibwele oyo bazalaki kolekisa babutu na bango kati na bilanga ya pembeni mpo na kobatela bitonga na bango. \v 9 Anjelu moko ya Nkolo abimelaki bango, mpe nkembo ya Nkolo engengaki zingazinga na bango ; mpe bayokaki somo makasi. \p \v 10 Kasi anjelu alobaki na bango : \pi1 — Bobanga te ! Namemeli bino sango moko ya malamu, oyo ekopesa bato nyonso esengo makasi. \v 11 Mobikisi abotameli bino lelo, kati na engumba ya Davidi ; Ye nde azali Masiya, Nkolo. \v 12 Tala elembo oyo ekosunga bino mpo na koyeba Ye : bokomona mwana moko abotami sika, balingi ye na bilamba mpe balalisi ye kati na elielo ya bibwele. \p \v 13 Mbala moko, ba-anjelu ebele ya mampinga ya Likolo bayaki kosangana na anjelu oyo ya liboso, bazalaki kokumisa Nzambe mpe koloba : \q1 \v 14 « Nkembo na Nzambe kati na bisika oyo eleki likolo, \q2 mpe kimia na mabele kati na bato oyo alingaka ! » \p \v 15 Tango ba-anjelu bakabwanaki na bango mpo na kozonga na Likolo, babateli bibwele balobanaki bango na bango : « Tokende kino na Beteleemi, mpo na kotala makambo oyo esalemi kuna, makambo oyo Nkolo ayebisi biso. » \p \v 16 Bakendeki kuna na lombangu mpe bakutaki Mari, Jozefi mpe mwana oyo abotami sika alala kati na elielo ya bibwele. \v 17 Sima na bango komona ye, balobaki makambo oyo bayebisaki bango na tina na mwana yango. \v 18 Bato nyonso oyo bayokaki bango bakamwaki mingi makambo oyo babateli bibwele balobaki. \v 19 Kasi Mari azalaki kobomba maloba wana nyonso mpe kokanisa na tina na yango mbala na mbala. \p \v 20 Babateli bibwele bazongaki na kokumisa mpe kosanzola Nzambe mpo na makambo nyonso oyo bayokaki mpe bamonaki, pamba te makambo nyonso esalemaki ndenge anjelu ayebisaki bango yango. \s1 Bamemi Yesu na Tempelo \p \v 21 Na mokolo ya mwambe, tango ngonga ya kokatisa mwana ngenga ekokaki, bapesaki mwana kombo « Yesu, » kombo oyo anjelu apesaki ye liboso ete mama na ye akoma na zemi. \v 22 Tango mikolo na bango ya komipetola ekokaki, kolanda ndenge ekomama kati na mobeko ya Moyize, Jozefi mpe Mari bamemaki Yesu na Yelusalemi mpo na kotalisa Ye epai ya Nkolo, \v 23 kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : « Mwana mobali nyonso ya liboso akobulisama mpo na Nkolo ; » \v 24 mpe mpo na kobonza mbeka, kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko ya Nkolo : bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka. \s1 Simeoni ayambi Masiya kati na Tempelo \p \v 25 Na tango wana, kati na Yelusalemi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki Simeoni. Azalaki moto ya sembo mpe azalaki kotosa makambo ya Nzambe ; azalaki kozela kobondisama ya Isalaele, mpe Molimo Mosantu azalaki likolo na ye. \v 26 Molimo Mosantu alakisaki ye ete akokufa te kino akomona Masiya, Motindami ya Nkolo. \p \v 27 Wana Molimo akambaki ye, akendeki na Tempelo. Mpe, lokola baboti ya Mwana Yesu bamemaki Ye mpo na kokokisa makambo oyo Mobeko etindaki, \v 28 Simeoni ayambaki Yesu na maboko na ye mpe akumisaki Nzambe na maloba oyo : \q1 \v 29 « Nkolo, sik’oyo, kolanda elaka na Yo, \q2 tika ete mowumbu na Yo akende na kimia ! \q1 \v 30 Pamba te miso na ngai emoni Mobikisi \q2 oyo awuti epai na Yo, \q1 \v 31 Mobikisi oyo obongisi mpo na bikolo nyonso : \q1 \v 32 pole mpo na kongengisa bikolo, \q2 mpe nkembo ya bato na Yo, Isalaele. » \p \v 33 Tata mpe mama ya Yesu bakamwaki mingi maloba oyo Simeoni alobaki na tina na Ye. \p \v 34 Simeoni apambolaki bango mpe alobaki na Mari, mama ya Yesu : \pi1 — Yeba malamu ete Mwana oyo atindami mpo na kokweyisa mpe kotelemisa bato ebele kati na Isalaele, mpe mpo na kozala elembo oyo ekomema tembe kati na bato. \v 35 Boye, makanisi oyo ebombama kati na mitema ya bato ebele ekoyebana. Bongo yo mpe, okoyoka lokola nde batubi motema na yo na mopanga. \p \v 36 Ezalaki mpe na mwasi mosakoli moko, Ana, mwana ya Fanwele, moto ya libota ya Aseri ; akomaki mobange makasi. Na bolenge na ye, asalaki mibu sambo ya libala elongo na mobali na ye ; \v 37 sima na yango, akufisaki mobali mpe atikalaki lisusu kobala te kino akokisaki mibu tuku mwambe na minei ya mbotama. Azalaki kolongwa te na Tempelo, kasi azalaki kosalela Nzambe, butu mpe moyi ; azalaki kokila bilei mpe kosambela. \v 38 Awa ayaki mpe kaka na ngonga wana, abandaki kozongisa matondi epai ya Nzambe mpe koloba na tina na Mwana Yesu, epai ya bato nyonso oyo bazalaki kozela ete Nzambe akangola Yelusalemi. \p \v 39 Sima na bango kokokisa nyonso oyo Mobeko ya Nkolo ezalaki kotinda, Mari mpe Jozefi bazongaki kati na Galile, na Nazareti, engumba na bango. \v 40 Mwana azalaki kokola mpe kokoma makasi ; atondaki na bwanya, mpe ngolu ya Nzambe ezalaki likolo na Ye. \s1 Yesu kati na Tempelo \p \v 41 Baboti ya Yesu bazalaki kokende na Yelusalemi mibu nyonso mpo na feti ya Pasika. \v 42 Tango Yesu akokisaki mibu zomi na mibale ya mbotama, bakendeki na feti lokola momesano. \p \v 43 Bongo tango feti esilaki, wana baboti na Ye bazongaki, Elenge Yesu atikalaki na Yelusalemi ; kasi baboti na Ye bayebaki te ete atikali. \v 44 Lokola bazalaki kokanisa ete azali elongo na baninga na Ye ya mobembo, basalaki mokolo mobimba na nzela. Bongo bakomaki koluka Ye epai ya bandeko mpe baninga na bango. \v 45 Kasi bamonaki Ye te ; mpe wana bakobaki koluka Ye, bazongaki kino na Yelusalemi. \p \v 46 Sima na mikolo misato, bamonaki Ye kati na lopango ya Tempelo avandi na kati-kati ya balakisi ya Mobeko, azali koyoka bango mpe kopesa bango mituna. \v 47 Bato nyonso oyo bazalaki koyoka Ye bazalaki kokamwa mingi mayele na Ye mpe biyano na Ye. \v 48 Tango baboti na Ye bamonaki Ye, bakamwaki mingi. Mama na Ye alobaki na Ye : \pi1 — Mwana na ngai, mpo na nini osali biso boye ? Tata na yo mpe ngai tozalaki mitema likolo, mpe toluki Yo bisika nyonso ! \p \v 49 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Mpo na nini koluka Ngai ? Boyebaki te ete nasengeli kosala misala ya Tata na Ngai ?\wj* \p \v 50 Kasi basosolaki te maloba na Ye. \p \v 51 Bongo azongaki na Nazareti elongo na baboti na Ye ; azalaki kotosa bango. Mama na Ye azalaki kobomba makambo wana nyonso kati na motema na ye. \v 52 Yesu azalaki kokola na bwanya mpe na nzoto ; Nzambe mpe bato bazalaki kosepela na Ye. \c 3 \ms1 Mabongisi ya lotomo ya Yesu \s1 Yoane mobatisi, motindami ya Nzambe \r (Mat 3.1-10; Mlk 1.1-6; Yn 1.19-23) \p \v 1 Tango Tibere Sezare akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Ponse Pilato azalaki moyangeli ya Yuda ; Erode azalaki moyangeli ya Galile ; Filipo, ndeko mobali ya Erode, azalaki moyangeli ya Itureya mpe ya Trakonitide ; mpe Lisaniasi azalaki moyangeli ya Abilene. \v 2 Ana mpe Kayifa bazalaki bakonzi ya Banganga-Nzambe. \p Na mobu yango, Nzambe alobaki na Yoane, mwana mobali ya Zakari, kati na esobe. \p \v 3 Yoane akomaki kotambola na etuka mobimba, zingazinga ya moluka Yordani ; na mateya na ye, azalaki koloba : « Bobongola mitema na bino, bozwa libatisi, mpe Nzambe akolimbisa masumu na bino. » \v 4 Boye nde ekokisamaki, makambo oyo mosakoli Ezayi akomaki kati na buku na ye : \q1 « Mongongo ya moto moko ezali kobelela kati na esobe : \q2 ‹ Bobongisa nzela mpo na Nkolo, \q2 bosembolela Ye banzela ya mike ! \q1 \v 5 Mabwaku nyonso ekotondisama, \q2 bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse ekokitisama, \q1 babalabala oyo ezali nyoka-nyoka ekosembolama, \q2 banzela ya mabulu-mabulu ekobongisama, \q1 \v 6 mpe bato nyonso bakomona lobiko ya Nzambe. › » \p \v 7 Yoane alobaki na ebele ya bato oyo bayaki epai na ye mpo ete abatisa bango : « Bana ya banyoka, nani alakisaki bino kokima kanda oyo ezali koya ? \v 8 Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema, mpe bokoma te komilobela : ‹ Abrayami azali koko na biso ! › Pamba te, nazali koloba na bino penza ya solo ete Nzambe azali na makoki ya kobimisa, wuta na mabanga oyo, bakitani mpo na Abrayami. \p \v 9 Epasola esili kobongisama mpo na kokata banzete wuta na misisa, mpe nzete nyonso oyo ebotaka bambuma ya malamu te ekokatama mpe ekobwakama na moto. » \p \v 10 Ebele ya bato batunaki ye : \pi1 — Tosengeli kosala nini ? \p \v 11 Yoane azongiselaki bango : \pi1 — Tika ete moto oyo azali na kazaka mibale apesa moko na moto oyo azangi kazaka, mpe tika ete moto oyo azali na bilei akabola na bato oyo bazangi bilei. \p \v 12 Bafutisi mpako mpe bayaki mpo ete babatisa bango ; batunaki Yoane : \pi1 — Moteyi, tosengeli kosala nini ? \p \v 13 Azongiselaki bango : \pi1 — Tango bofutisaka mpako, bobakisaka mbongo mosusu te na likolo ya oyo esengeli kofutama. \p \v 14 Basoda mpe batunaki ye : \pi1 — Bongo biso, tosengeli kosala nini ? \p Yoane azongiselaki bango : \pi1 — Bobotola mbongo ya bato te mpe bokosela bato makambo te ; kasi bosepela kaka na lifuti na bino. \r (Mat 3.11-12; Mlk 1.7-8; Yn 1.19-28) \p \v 15 Lokola bato bazalaki kozela na elikya makasi, moko na moko azalaki komituna na se ya motema soki Yoane te nde azali Masiya. \p \v 16 Yoane azongiselaki bango : \pi1 — Ngai nazali kobatisa bino na mayi ; kasi ezali na Moto moko oyo azali koya, aleki ngai na nguya, mpe ngai nabongi kutu te mpo na kofungola ata basinga ya basandale na Ye ; ezali Ye nde akobatisa bino kati na Molimo Mosantu mpe na moto. \v 17 Asimbi kiyungulu na loboko na Ye mpo na kopetola etando na Ye mpe mpo na koyamba ble kati na ebombelo na Ye ; kasi akotumba matiti oyo ekotikala na nzela ya moto oyo ekufaka te. \p \v 18 Yoane azalaki lisusu kolendisa bato mpe koteya bango Sango Malamu na nzela ya maloba mosusu ebele. \r (Mat 14.3-4; Mlk 6.17-18) \p \v 19 Kasi Yoane apamelaki mokonzi Erode mpo ete azwaki na libala Erodiade, mwasi ya ndeko na ye, mpe mpo ete asalaki lisusu mabe ebele. \v 20 Na likolo ya mabe nyonso oyo Erode asalaki, abakisaki lisusu mabe ya kokanga Yoane kati na boloko. \s1 Yesu azwi libatisi \r (Mat 3.13-17; Mlk 1.9-11; Yn 1.29-34) \p \v 21 Wana bato nyonso bazalaki kokende kozwa libatisi, Yesu mpe azwaki libatisi. Mpe wana Yesu azalaki kosambela, Likolo efungwamaki, \v 22 mpe Molimo Mosantu akitelaki Ye na lolenge ya nzoto, lokola ebenga. \p Bongo mongongo moko eyokanaki wuta na Likolo : « Ozali Mwana na Ngai ya bolingo, nasepelaka na Yo mingi. » \s1 Molongo ya mbotama ya libota ya Yesu \r (Mat 1.1-17) \p \v 23 Yesu azalaki na mibu pene tuku misato ya mbotama tango abandaki mosala na Ye. Bato bazalaki kokanisa ete azali mwana mobali ya Jozefi ; \b \li1 Jozefi, mwana mobali ya Eli ; \v 24 Eli, mwana mobali ya Matati ; \li1 Matati, mwana mobali ya Levi ; Levi, mwana mobali ya Meliki ; \li1 Meliki, mwana mobali ya Yanai ; Yanai, mwana mobali ya Jozefi ; \li1 \v 25 Jozefi, mwana mobali ya Matatiasi ; Matatiasi, mwana mobali ya Amosi ; \li1 Amosi, mwana mobali ya Naumi ; Naumi, mwana mobali ya Esili ; \li1 Esili, mwana mobali ya Nagai ; \v 26 Nagai, mwana mobali ya Maati ; \li1 Maati, mwana mobali ya Matatiasi ; Matatiasi, mwana mobali ya Semeini ; \li1 Semeini, mwana mobali ya Yoze ; Yoze, mwana mobali ya Yoda ; \li1 \v 27 Yoda, mwana mobali ya Yoanani ; Yoanani, mwana mobali ya Reza ; \li1 Reza, mwana mobali ya Zorobabeli ; Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; \li1 Shealitieli, mwana mobali ya Neri ; \v 28 Neri, mwana mobali ya Meliki ; \li1 Meliki, mwana mobali ya Adi ; Adi, mwana mobali ya Kosami ; \li1 Kosami, mwana mobali ya Elimadami ; Elimadami, mwana mobali ya Eri ; \li1 \v 29 Eri, mwana mobali ya Jozue ; Jozue, mwana mobali ya Eliezeri ; \li1 Eliezeri, mwana mobali ya Yorimi ; Yorimi, mwana mobali ya Matati ; \li1 Matati, mwana mobali ya Levi ; \v 30 Levi, mwana mobali ya Simeoni ; \li1 Simeoni, mwana mobali ya Yuda ; Yuda, mwana mobali ya Jozefi ; \li1 Jozefi, mwana mobali ya Yonami ; Yonami, mwana mobali ya Eliakimi ; \li1 \v 31 Eliakimi, mwana mobali ya Meleya ; Meleya, mwana mobali ya Mena ; \li1 Mena, mwana mobali ya Matata ; Matata, mwana mobali ya Natani ; \li1 Natani, mwana mobali ya Davidi ; \v 32 Davidi, mwana mobali ya Izayi ; \li1 Izayi, mwana mobali ya Obedi ; Obedi, mwana mobali ya Boazi ; \li1 Boazi, mwana mobali ya Salimoni ; Salimoni, mwana mobali ya Nashoni ; \li1 \v 33 Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi ; Aminadabi, mwana mobali ya Adimini ; \li1 Adimini, mwana mobali ya Arini ; Arini, mwana mobali ya Etsironi ; \li1 Etsironi, mwana mobali ya Peretsi ; Peretsi, mwana mobali ya Yuda ; \li1 \v 34 Yuda, mwana mobali ya Jakobi ; Jakobi, mwana mobali ya Izaki ; \li1 Izaki, mwana ya Abrayami ; Abrayami, mwana mobali ya Tera ; \li1 Tera, mwana mobali ya Naori ; \v 35 Naori, mwana mobali ya Serugi ; \li1 Serugi, mwana mobali ya Rewu ; Rewu, mwana mobali ya Pelegi ; \li1 Pelegi, mwana mobali ya Eberi ; Eberi, mwana mobali ya Shela ; \li1 \v 36 Shela, mwana mobali ya Kayinami ; Kayinami, mwana mobali ya Aripakishadi ; \li1 Aripakishadi, mwana mobali ya Semi ; Semi, mwana mobali ya Noa ; \li1 Noa, mwana mobali ya Lemeki ; \v 37 Lemeki, mwana mobali ya Matusalemi ; \li1 Matusalemi, mwana mobali ya Enoki ; Enoki, mwana mobali ya Yeredi ; \li1 Yeredi, mwana mobali ya Malaleeli ; Malaleeli, mwana mobali ya Kenani ; \li1 \v 38 Kenani, mwana mobali ya Enoshi ; Enoshi, mwana mobali ya Seti ; \li1 Seti, mwana mobali ya Adamu ; Adamu, mwana mobali ya Nzambe. \c 4 \s1 Komekama ya Yesu \r (Mat 4.1-11; Mlk 1.12-13) \p \v 1 Yesu atondisamaki na Molimo Mosantu, alongwaki na Yordani, mpe Molimo amemaki Ye kati na esobe \v 2 epai wapi Satana amekaki Ye mikolo tuku minei. Na mikolo wana, alia eloko moko te ; mpe tango mikolo yango elekaki, ayokaki nzala. \p \v 3 Satana alobaki na Ye : \pi1 — Soki ya solo ozali penza Mwana na Nzambe, loba na libanga ete ebongwana lipa. \p \v 4 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te. »\wj* \p \v 5 Satana amemaki Yesu na esika moko ya likolo makasi, alakisaki Ye mbala moko bokonzi nyonso ya mokili. \v 6 Satana alobaki na Yesu : \pi1 — Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, pamba te epesamela ngai, mpe nakoki kopesa yango na moto nyonso oyo nalingi. \v 7 Soki kaka ogumbameli ngai, nyonso ekokoma ya yo. \p \v 8 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Ekomama : « Okogumbamelaka kaka Yawe, Nzambe na yo, mpe okosambelaka kaka Ye. »\wj* \p \v 9 Bongo Satana amemaki Ye na Yelusalemi, atelemisaki Ye na songe ya Tempelo mpe alobaki na Ye : \pi1 — Soki ozali penza Mwana na Nzambe, mibwaka na se ; \v 10 pamba te ekomama : \q1 « Akopesa mitindo na ba-anjelu na Ye na tina na yo \q2 mpo ete babatela Yo malamu. \q1 \v 11 Mpe bakomema Yo na maboko na bango \q2 mpo ete lokolo na Yo etutana na libanga te. » \p \v 12 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Ekomama : « Okomeka te Yawe, Nzambe na yo. »\wj* \p \v 13 Tango Satana asilisaki komeka Yesu na lolenge nyonso, akendeki mosika na Ye kino na mokolo oyo ekatama. \ms1 Lotomo ya Yesu kati na Galile \s1 Yesu abandi mosala na Ye \r (Mat 4.12-17; Mlk 1.14-15) \p \v 14 Yesu azongaki na Galile, atonda na nguya ya Molimo ; mpe basango na tina na Ye epanzanaki kati na etuka wana mobimba. \v 15 Azalaki koteya kati na bandako na bango ya mayangani, mpe bato nyonso bazalaki kokumisa Ye. \r (Mat 13.53-58; Mlk 6.1-6) \p \v 16 Akendeki na Nazareti epai wapi akolaki ; mpe na mokolo ya Saba, akotaki na ndako ya mayangani, ndenge ezalaki momesano na ye. Atelemaki mpo na kotanga, \v 17 mpe bapesaki Ye buku ya mosakoli Ezayi. Afungolaki yango mpe amonaki esika epai wapi bakoma : \q1 \v 18 \wj « Molimo ya Nkolo azali likolo na Ngai,\wj* \q2 \wj pamba te apakoli Ngai mafuta\wj* \q1 \wj mpo na kosakola Sango Malamu epai ya babola ;\wj* \q2 \wj atindi Ngai kosakola bonsomi epai ya bakangami,\wj* \q1 \wj koyebisa bakufi miso ete bakomona lisusu,\wj* \q2 \wj kokangola bato oyo bazali konyokwama\wj* \q1 \v 19 \wj mpe kosakola mobu ya ngolu ya Nkolo. »\wj* \p \v 20 Bongo akangaki buku yango, azongisaki yango epai ya mosali ya ndako ya mayangani mpe avandaki. Miso ya bato nyonso kati na ndako ya mayangani ekomaki kotala Ye. \v 21 Bongo akomaki koloba na bango : \pi1 \wj — Makomi oyo bowuti koyoka ekokisami lelo !\wj* \p \v 22 Bato nyonso balobaki makambo ya malamu na tina na Ye mpe bakamwaki mingi maloba ya ngolu oyo ezalaki kobima na monoko na Ye ; bakomaki komituna : \pi1 — Boni, Ye azali mwana ya Jozefi te ? \p \v 23 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Nayebi malamu ete bokoloba na Ngai lisese oyo : « Monganga, mibikisa yo moko ! » Mpe bokoloba na Ngai : « Sala mpe awa, kati na engumba na Yo, makambo oyo toyokaki ete osalaki yango kati na Kapernawumi ! »\wj* \m \v 24 Abakisaki : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : « Mosakoli moko te andimamaka kati na ekolo na ye.\wj* \v 25 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : ezalaki na basi ebele bakufisa mibali kati na Isalaele, na tango ya Eliya, tango likolo ekangamaki mibu misato mpe basanza motoba, mpe nzala makasi ezalaki kati na ekolo mobimba.\wj* \v 26 \wj Nzokande, Eliya atindamaki te epai ya moko kati na bango, kasi atindamaki kaka epai ya mwasi moko akufisa mobali mpe azalaki kovanda na mboka Sarepita, kati na ekolo Sidoni.\wj* \v 27 \wj Mpe na tango ya mosakoli Elize, bato na maba bazalaki ebele kati na Isalaele, kasi moko te kati na bango apetolamaki, longola kaka Namani, moto ya Siri. »\wj* \p \v 28 Bato nyonso oyo bazalaki kati na ndako ya mayangani basilikaki makasi tango bayokaki bongo ; \v 29 batelemaki, bakumbaki Yesu na libanda ya engumba, mpe bamemaki Ye kino na songe ya ngomba epai wapi batongaki engumba na bango, mpo ete babwaka Ye na se. \v 30 Kasi Yesu alekaki na kati-kati na bango mpe akobaki mobembo na Ye. \s1 Yesu abengani molimo mabe \r (Mlk 1.21-28) \p \v 31 Bongo Yesu akendeki na Kapernawumi, engumba ya Galile, mpe ateyaki kuna bato na mokolo ya Saba. \v 32 Bakamwaki makasi malakisi na Ye, pamba te maloba na Ye ezalaki na bokonzi. \p \v 33 Kati na ndako ya mayangani, ezalaki na mobali moko oyo azalaki na se ya bokonzi ya molimo mabe. Agangaki na mongongo makasi : \pi1 \v 34 — Ah Yesu ya Nazareti, likambo nini kati na biso na Yo ? Oyei mpo na kobebisa biso ? Nayebi nani oyo Yo ozali : Mosantu ya Nzambe ! \p \v 35 Yesu atelemelaki molimo mabe yango mpe apesaki yango mitindo : \pi1 \wj — Kanga monoko na yo ! Bima kati na moto oyo !\wj* \p Molimo mabe ebwakaki moto yango na mabele, liboso ya bato nyonso, ebimaki kati na ye mpe esalaki ye ata mabe moko te. \v 36 Bato nyonso bakamwaki mpe bakomaki kotunana : \pi1 — Oyo ezali lisusu maloba nini ! Azali kopesa mitindo epai ya milimo mabe, na bokonzi mpe na nguya nyonso, mpe yango ezali kobima ! \p \v 37 Mpe sango na tina na Yesu epanzanaki na bamboka ya etuka mobimba. \s1 Yesu abikisi bato ebele \r (Mat 8.14-17; Mlk 1.29-34) \p \v 38 Yesu abimaki na ndako ya mayangani mpe akendeki na ndako ya Simona. Mama-bokilo ya Simona azalaki kobela fievele makasi. Basengaki na Yesu ete abikisa ye. \v 39 Yesu agumbamaki pembeni na ye, apesaki mitindo na fievele, mpe fievele esilaki. Kaka na tango yango, mama-bokilo ya Simona atelemaki mpe akomaki kobongisela bango bilei. \p \v 40 Na pokwa, bato nyonso oyo bazalaki na babeli ya bokono ya ndenge na ndenge bamemaki bango epai ya Yesu. Yesu atielaki moko na moko kati na bango maboko mpe abikisaki bango. \v 41 Milimo mabe mpe ebimaki kati na bato ebele na koganga : « Ozali solo Mwana na Nzambe ! » \p Kasi Yesu apesaki yango mitindo ete eloba te, pamba te eyebaki ete Yesu azali Klisto. \r (Mat 4.23; Mlk 1.35-39) \p \v 42 Tango tongo etanaki, Yesu abimaki na ndako yango mpe akendeki na esika moko epai wapi azalaki kaka Ye moko. Ebele ya bato bazalaki koluka Ye ; mpe tango bakomaki na esika oyo azalaki, bamekaki kokangama na Ye mpe kopekisa Ye kotika bango. \p \v 43 Kasi Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Nasengeli mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe epai ya bingumba mosusu, pamba te ezali mpo na yango nde Nzambe atindaki Ngai.\wj* \p \v 44 Mpe Yesu akobaki koteya kati na bandako ya mayangani ya Yuda. \c 5 \s1 Yesu abengi bayekoli ya liboso \r (Mat 4.18-22; Mlk 1.16-20; Yn 1.35-51; 21.1-11) \p \v 1 Mokolo moko, wana Yesu azalaki pene ya ebale ya Genezareti, ebele ya bato batondaki pembeni na Ye mpo na koyoka Liloba na Nzambe. \v 2 Amonaki babwato mibale pembeni ya ebale ; ezali balobi mbisi nde bakitaki longwa na babwato yango mpo na kosukola minyama na bango. \v 3 Moko kati na babwato yango ezalaki ya Simona. Yesu amataki na bwato yango mpe asengaki na Simona ete apusa yango mwa mosika longwa na mokili. Bongo avandaki mpe abandaki koteya bato wuta na bwato. \p \v 4 Tango asilisaki koteya, alobaki na Simona : \pi1 \wj — Pusa bwato epai mayi ezali penza mozindo, mpe bobwaka minyama na mayi mpo na koloba bambisi.\wj* \p \v 5 Simona azongiselaki Ye : \pi1 — Moteyi, tosali butu mobimba, tozwi ata eloko moko te. Kasi lokola olobi bongo, nakobwaka minyama. \p \v 6 Tango basalaki bongo, bazwaki bambisi ebele, kutu minyama na bango ebandaki kopasuka. \v 7 Boye babengaki baninga na bango, oyo bazalaki kati na bwato mosusu mpo ete baya kosalisa bango. Baninga yango bayaki, batondisaki babwato nyonso mibale, mpe ekomaki kozinda. \p \v 8 Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki : \pi1 — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu ! \p \v 9 Somo monene ekangaki Simona mpe baninga na ye nyonso, likolo ya motango ya bambisi oyo bazwaki. \v 10 Ndenge moko mpe mpo na Jake mpe Yoane, bana mibali ya Zebede, oyo bazalaki baninga ya mosala ya Simona. \p Bongo Yesu alobaki na Simona : \pi1 \wj — Kobanga te ! Kobanda lelo, okokoma koloba nde bato.\wj* \p \v 11 Boye bamemaki babwato na mokili, batikaki nyonso mpe balandaki Yesu. \s1 Yesu abikisi moto na maba \r (Mat 8.1-13; Mlk 1.40-45) \p \v 12 Mokolo mosusu, wana Yesu azalaki kati na moko ya bingumba, moto moko atonda na maba na nzoto abimaki. Tango amonaki Yesu, afukamaki liboso na Ye elongi kino na mabele mpe abondelaki Ye : \pi1 — Nkolo, soki olingi, komisa ngai peto. \p \v 13 Yesu asembolaki loboko na Ye, asimbaki ye mpe alobaki : \pi1 \wj — Solo, nalingi yango, koma peto !\wj* \p Mbala moko, maba esilaki. \v 14 Yesu apesaki ye mitindo : \pi1 \wj — Koloba na moto moko te makambo oyo ekomeli yo, kasi kende komilakisa epai ya Nganga-Nzambe mpe, mpo na kopetolama na yo, pesa likabo oyo Moyize akataki lokola mobeko, mpo ete ezala litatoli mpo na bango.\wj* \p \v 15 Sango na tina na Yesu ezalaki kaka kopanzana se kopanzana, mpe bato ebele bazalaki koya kosangana mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango. \v 16 Kasi mbala mingi, Yesu azalaki kokende na bisika epai wapi azalaki kaka Ye moko mpo na kosambela. \s1 Yesu abikisi ebosono \r (Mat 9.1-8; Mlk 2.1-12) \p \v 17 Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bayaki kovanda wana ; bawutaki na bamboka nyonso ya Galile, na Yuda mpe na Yelusalemi. Mpe nguya ya Nkolo ezalaki elongo na Yesu mpo na kobikisa babeli. \v 18 Ndambo ya mibali bayaki, bamemaki ebosono moko na tsipoyi ; balukaki nzela ya kokotisa ye kati na ndako mpo na kotia ye liboso ya Yesu. \v 19 Kasi lokola bamonaki te nzela ya kokotisa ye kati na ndako, pamba te bato bazalaki ebele, bamataki na likolo ya ndako, batobolaki lidusu mpe bakitisaki ye, elongo na tsipoyi na ye, na kati-kati ya ebele ya bato, liboso ya Yesu. \p \v 20 Tango Yesu amonaki kondima na bango, alobaki : \pi1 \wj — Molingami na Ngai, masumu na yo elimbisami !\wj* \p \v 21 Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bakomaki kokanisa : \pi1 — Moto oyo azali komimona penza nani mpo ete abimisa maloba ya kotiola Nzambe ? Nani akoki kolimbisa masumu soki kaka Ye moko Nzambe te ? \p \v 22 Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, atunaki bango : \pi1 \wj — Mpo na nini bozali kokanisa biloko oyo kati na mitema na bino ?\wj* \v 23 \wj Likambo nini eleki pete mpo na koloba : « Masumu na yo elimbisami » to « telema mpe tambola ? »\wj* \v 24 \wj Kasi nalingi boyeba ete Mwana na Moto azali na bokonzi ya kolimbisa masumu kati na mokili.\wj* \p Bongo alobaki na ebosono : \wj « Nalobi na yo : Telema, kamata tsipoyi na yo mpe kende na ndako na yo ! »\wj* \p \v 25 Mbala moko, atelemaki liboso na bango, akamataki tsipoyi oyo bazalaki kolalisa ye na yango, azongaki na ndako na ye na kokumisa Nzambe. \p \v 26 Awa bato nyonso bakamwaki, bakomaki kokumisa Nzambe ; awa mpe somo ekangaki bango, bakomaki koloba : « Lelo penza, tomoni makambo ya kokamwa ! » \s1 Tembe na tina na Yesu \r (Mat 9.9-13; Mlk 2.13-17) \p \v 27 Sima na yango, Yesu abimaki mpe amonaki mofutisi mpako moko, kombo na ye « Levi. » Levi azalaki ya kovanda na ndako na ye ya mosala epai wapi bafutaka mpako. Yesu alobaki na ye : \wj « Landa Ngai. »\wj* \p \v 28 Levi atelemaki, atikaki biloko nyonso mpe alandaki Yesu. \p \v 29 Bongo Levi asalaki feti monene, kati na ndako na ye, mpo na lokumu ya Yesu ; bafutisi mpako ebele mpe bato mosusu bazalaki kolia mesa moko elongo na bango. \p \v 30 Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko oyo bazalaki lingomba moko elongo na bango bakomaki koyimayima mpe balobaki na bayekoli ya Yesu : \pi1 — Mpo na nini bozali kolia mpe komela mesa moko na bafutisi mpako mpe bato ya masumu ? \p \v 31 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Bato oyo bazali kolongono na nzoto bazalaka na posa ya monganga te, ezali babeli nde bazalaka na posa na ye.\wj* \v 32 \wj Nayaki te koluka bato ya sembo, kasi bato ya masumu mpo ete babongola mitema.\wj* \r (Mat 9.14-17; Mlk 2.18-22) \p \v 33 Bafarizeo balobaki na Yesu : \pi1 — Mpo na nini bayekoli ya Yoane mpe bayekoli ya Bafarizeo bakilaka bilei mbala na mbala mpe bamipesaka na mabondeli ; kasi bayekoli na yo, mosala na bango kaka kolia mpe komela ? \p \v 34 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Boni, bokoki solo kosenga na bato oyo babengami na feti ya libala ete bakila bilei wana mobali ya libala azali nanu elongo na bango ?\wj* \v 35 \wj Tango ezali koya, oyo mobali ya libala akozala lisusu te elongo na bango ; ekozala na tango wana nde bakokila bilei.\wj* \p \v 36 Yesu alobaki na bango lisusu lisese oyo : \pi1 \wj — Moto moko te asalelaka eteni ya elamba ya sika mpo na kobamba elamba ya kala ; soki te, akopasola na pamba elamba ya sika mpe kitendi ya sika ekobalana te na elamba ya kala.\wj* \v 37 \wj Moto moko mpe te atiaka vino ya sika kati na bambeki ya kala ; soki te, vino ya sika ekopasola bambeki mpe ekosopana, mpe bambeki ekobeba libela.\wj* \v 38 \wj Nzokande, esengeli kaka kotia vino ya sika kati na bambeki ya sika.\wj* \v 39 \wj Mpe moto moko te alingaka komela vino ya sika soki awuti komela vino ya kala, pamba te balobaka : « Vino ya kala eleki kitoko. »\wj* \c 6 \s1 Yesu, Mokonzi ya Saba \r (Mat 12.1-8; Mlk 2.23-28) \p \v 1 Mokolo moko ya Saba, wana Yesu azalaki kotambola kati na bilanga ya ble, bayekoli na Ye babandaki kobuka ble ; mpe, sima na bango kolongola yango baposo na maboko, baliaki bambuma na yango. \p \v 2 Ndambo ya Bafarizeo batunaki : \pi1 — Mpo na nini bozali kosala likambo oyo epekisami kosalema na mokolo ya Saba ? \p \v 3 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Botanga nanu te makambo oyo Davidi asalaki tango ye elongo na baninga na ye bazalaki na nzala ?\wj* \v 4 \wj Akotaki kati na Ndako ya Nzambe, akamataki mapa oyo ebulisama mpo na Nzambe, aliaki yango mpe apesaki yango epai ya baninga na ye. Nzokande, Banganga-Nzambe kaka nde bazalaki na ndingisa ya kolia yango.\wj* \p \v 5 Yesu alobaki na bango lisusu : \pi1 \wj — Mwana na Moto azali Mokonzi ya mokolo ya Saba.\wj* \r (Mat 12.9-14; Mlk 3.1-6) \p \v 6 Mokolo mosusu ya Saba, Yesu akotaki kati na ndako ya mayangani mpe abandaki koteya. Ezalaki kuna na moto moko akufa loboko ya mobali. \v 7 Balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo bazalaki kolandela Yesu mpo na kotala soki akobikisa moto na mokolo ya Saba, mpo ete bazwa likambo ya kofunda Ye. \p \v 8 Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na moto oyo akufa loboko : \pi1 \wj — Telema mpe pusana na liboso ya bato nyonso !\wj* \p Moto yango atelemaki mpe apusanaki na liboso ya bato nyonso. \p \v 9 Bongo Yesu alobaki na bato mosusu : \pi1 \wj — Nazali kotuna bino : nini epesamela nzela ya kosala na mokolo ya Saba : kosala bolamu to kosala mabe, kobikisa moto to kotika ye kokufa ?\wj* \p \v 10 Yesu atalaki moko na moko kati na bango mpe alobaki na moto oyo akufa loboko : \pi1 \wj — Sembola loboko na yo !\wj* \p Moto yango asembolaki loboko, mpe loboko na ye ebikaki. \v 11 Kasi balakisi ya Mobeko mpe Bafarizeo basilikaki makasi mpe bakomaki kolobana mpo na koluka likambo oyo bakoki kosala Yesu. \s1 Yesu aponi bantoma zomi na mibale \r (Mat 10.1-4; Mlk 3.13-19; Mis 1.13) \p \v 12 Kaka na mikolo wana, Yesu amataki likolo ya ngomba mpo na kosambela ; asalaki kuna butu mobimba, azali kosambela Nzambe. \v 13 Na tongo, abengaki bayekoli na Ye pene na Ye mpe aponaki bato zomi na mibale kati na bango, ba-oyo akomaki kobenga « bantoma. » Ezalaki : \li1 \v 14 Simona oyo Yesu apesaki kombo « Petelo ; » Andre, ndeko na ye ; \li1 Jake, \li1 Yoane, \li1 Filipo, \li1 Bartelemi ; \li1 \v 15 Matayo, \li1 Toma ; \li1 Jake, mwana mobali ya Alife, \li1 Simona oyo azalaki moko kati na lisanga ya Bazelote ; \li1 \v 16 Yuda, mwana mobali ya Jake, \li1 mpe Yuda Isikarioti oyo atekaki Yesu. \s1 Yesu kati na ebele ya bato \r (Mat 4.23-25; Mlk 3.7-13) \p \v 17 Yesu akitaki elongo na bango wuta na ngomba, mpe batelemaki na esika moko ya polele epai wapi bayekoli na Ye bazalaki ebele elongo na bato mosusu ebele oyo bawutaki na Yuda mobimba, na Yelusalemi mpe na bamboka ya Tiri mpe ya Sidoni, oyo ezalaki pembeni-pembeni ya ebale monene. \v 18 Bayaki mpo na koyoka Ye mpe mpo na kobikisama na bokono na bango. Ba-oyo milimo mabe ezalaki kotungisa bakangolamaki. \v 19 Bato nyonso balukaki kosimba Ye, pamba te nguya moko ezalaki kobima kati na Ye mpe ezalaki kobikisa bato nyonso. \s1 Esengo to mawa \r (Mat 5.1-12) \p \v 20 Bongo Yesu atalaki bayekoli na Ye mpe alobaki : \q1 \wj « Esengo na bino oyo bozali babola,\wj* \q2 \wj pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bino !\wj* \q1 \v 21 \wj Esengo na bino oyo bozali na nzala sik’oyo,\wj* \q2 \wj pamba te bokotonda !\wj* \q1 \wj Esengo na bino oyo bozali kolela sik’oyo,\wj* \q2 \wj pamba te bokoseka !\wj* \q1 \v 22 \wj Esengo na bino tango bato bazali koyina bino,\wj* \q2 \wj tango bazali kobengana bino,\wj* \q1 \wj tango bazali kofinga bino,\wj* \q2 \wj mpe tango bato bazali kosambwisa kombo na bino,\wj* \q2 \wj likolo na Mwana na Moto !\wj* \p \v 23 \wj Tango makambo yango ekokokisama, bosepela mpe bozala na esengo, pamba te lifuti na bino ezali monene kati na Likolo. Ezalaki mpe kaka ndenge wana nde batata na bango banyokolaki basakoli.\wj* \q1 \v 24 \wj Kasi mawa na bino oyo bozali bazwi,\wj* \q2 \wj pamba te bosili kozwa kobondisama na bino !\wj* \q1 \v 25 \wj Mawa na bino oyo bozali ya kotonda sik’oyo,\wj* \q2 \wj pamba te bokozala na nzala !\wj* \q1 \wj Mawa na bino oyo bozali koseka sik’oyo,\wj* \q2 \wj pamba te bokozala na mawa mpe bokolela !\wj* \q1 \v 26 \wj Mawa na bino soki bato nyonso bazali koloba malamu na tina na bino,\wj* \q2 \wj pamba te ezali ndenge wana nde bakoko na bango\wj* \q2 \wj basalaki basakoli ya lokuta !\wj* \s1 Mateya mpo na kolinga banguna \r (Mat 5.37-48) \p \v 27 \wj Kasi, na bino oyo bozali koyoka Ngai, nalobi : Bolingaka banguna na bino mpe bosalelaka bayini na bino bolamu.\wj* \v 28 \wj Bopambolaka bato oyo balakelaka bino mabe, mpe bobondelaka mpo na bato oyo banyokolaka bino.\wj* \v 29 \wj Soki moto abeti yo mbata na litama moko, pesa ye mpe litama mosusu. Soki moto abotoli yo kazaka na yo, tika ye azwa lisusu elamba na yo.\wj* \v 30 \wj Pesa na moto nyonso oyo asengi yo ; mpe soki moto akamati eloko na yo, kosenga te ete azongisela yo yango.\wj* \p \v 31 \wj Oyo bolingaka ete bato mosusu basalela bino, bino mpe bosalaka yango mpo na bango.\wj* \v 32 \wj Soki bolingaka kaka bato oyo balingaka bino, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe balingaka bato oyo balingaka bango.\wj* \v 33 \wj Mpe soki bosalaka bolamu epai ya bato oyo basalaka bino bolamu, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe basalaka bongo.\wj* \v 34 \wj Soki bodefisaka kaka na bato oyo bozali na elikya ete bakoki kofuta bino niongo oyo bodefisaka bango, litomba nini bokozwa ? Bato ya masumu mpe badefisaka baninga na bango, bato ya masumu, na elikya ete bakofuta bango niongo yango.\wj* \p \v 35 \wj Kasi bolingaka banguna na bino, bosalelaka bango bolamu, bodefisaka na kozanga kolikya ete bakofuta bino niongo. Na bongo, bokozwa litomba monene mpe bokozala bana ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo ; pamba te azali malamu mpo na bato oyo bandimaka te bolamu oyo basaleli bango, mpe azali malamu mpo na bato mabe.\wj* \p \v 36 \wj Boyokelaka bato mawa, ndenge kaka Tata na bino ayokelaka bato mawa.\wj* \r (Mat 7.1-5) \p \v 37 \wj Bosambisaka te, mpe bakosambisa bino te ; bokatelaka bato etumbu te, mpe bakokatela bino etumbu te ; bolimbisaka, mpe bakolimbisa bino ;\wj* \v 38 \wj bopesaka, mpe bakopesa bino ; bakosopa kati na mabenga na bino biloko oyo eleki ebele, oyo bakofina mpe bakoningisa malamu kino ekokoma kosopana. Pamba te bakomeka bino na emekelo kaka oyo bosalelaka mpo na komeka bato mosusu. »\wj* \p \v 39 Yesu alobaki na bango lisusu lisese oyo : \wj « Boni, mokufi miso akoki kotambolisa mokufi miso mosusu ? Boni, bango mibale bakokweya te kati na libulu ?\wj* \p \v 40 \wj Moyekoli alekaka molakisi na ye te, kasi moyekoli nyonso oyo bateyi malamu akozala lokola molakisi na ye.\wj* \p \v 41 \wj Mpo na nini ozali kotala mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo, wana ozali komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko ?\wj* \v 42 \wj Ndenge nini okoki koloba na ndeko na yo : ‹ Ndeko na ngai, tika ete nalongola yo mwa lititi oyo ezali kati na liso na yo, › wana ozali kokoka komona te nzete oyo ezali kati na liso na yo moko. Bolole ! Banda nanu kolongola nzete oyo ezali kati na liso na yo, bongo okomona malamu mpo ete okoka kolongola mwa lititi oyo ezali kati na liso ya ndeko na yo.\wj* \r (Mat 7.16-20) \p \v 43 \wj Nzete ya malamu ebotaka te bambuma ya mabe, mpe nzete ya mabe ebotaka te bambuma ya malamu.\wj* \v 44 \wj Nzete nyonso eyebanaka na mbuma na yango : na nzete ya nzube, babukaka bambuma ya figi te ; mpe na nzete ya sende, balongolaka bambuma ya vino te.\wj* \v 45 \wj Moto malamu abimisaka bolamu kowuta na makambo malamu oyo etondi kati na motema na ye, mpe moto mabe abimisaka mabe kowuta na makambo mabe oyo etondi kati na motema na ye. Pamba te monoko elobaka kolanda makambo oyo etondi kati na motema.\wj* \s1 Moyekoli malamu mpe moyekoli mabe \r (Mat 7.24-27) \p \v 46 \wj Mpo na nini bobengaka Ngai ‹ Nkolo ! Nkolo ! › kasi bosalaka te makambo oyo nayebisaka bino ?\wj* \p \v 47 \wj Moto nyonso oyo ayaka epai na Ngai, ayokaka maloba na Ngai mpe atiaka yango na misala, nazali kolakisa bino soki akokani na nani :\wj* \v 48 \wj akokani na moto oyo, mpo na kotonga ndako, atimolaki mabele, akitaki penza na mozindo mpe atongaki moboko ya ndako yango na likolo ya libanga ; tango mpela eyaki, mayi emataki makasi mpe emibwakaki na ndako yango kasi ekokaki te kobuka yango, pamba te etongamaki malamu.\wj* \p \v 49 \wj Kasi moto oyo ayokaka maloba na Ngai mpe atiaka yango te na misala akokani na moto oyo atongaki ndako na likolo ya mabele, ezanga moboko ; tango kaka mpela emibwakaki na ndako, ndako yango ekweyaki mbala moko mpe epanzanaki. »\wj* \c 7 \s1 Yesu abikisi mosali ya mokonzi ya basoda \r (Mat 8.5-13; Yn 4.46-54) \p \v 1 Sima na Yesu koloba makambo oyo nyonso epai ya bato, akotaki na Kapernawumi. \p \v 2 Kuna, mosali moko ya mokonzi ya basoda azalaki kobela mpe akomaki pene ya kokufa. Mokonzi yango ya basoda azalaki kolinga mingi mosali na ye. \v 3 Tango mokonzi ya basoda ayokaki sango na tina na Yesu, atindaki ndambo ya bampaka ya Bayuda epai na Yesu mpo na kosenga na Ye ete akende kobikisa mosali ya mokonzi ya basoda. \v 4 Tango bakomaki epai ya Yesu, babondelaki Ye makasi ; balobaki : \pi1 — Tata wana abongi penza ete osalela ye likambo oyo asengi epai na Yo, \v 5 pamba te alingaka ekolo na biso, mpe ye nde atongaki ndako na biso ya mayangani. \p \v 6 Boye Yesu akendeki elongo na bango. Kasi tango akomaki pene ya ndako, mokonzi ya basoda atindaki baninga na ye koloba na Yesu : \pi1 — Nkolo, komitungisa na Yo te, pamba te nazali ya kokoka te mpo ete okota na ndako na ngai. \v 7 Ezali mpe mpo na yango nde namimonaki ete nabongi te mpo na koya epai na Yo. Kasi loba kaka liloba moko, mpe mosali na ngai akobika na bokono na ye. \v 8 Pamba te ngai moko mpe nazali na se ya bakonzi oyo baleki ngai, mpe ezali na basoda oyo bazali na se ya bokonzi na ngai. Soki nalobi na moko : « Kende, » akendaka ; mpe na mosusu : « Yaka, » ayaka ; bongo soki nalobi na mowumbu na ngai : « Sala mosala oyo, » asalaka yango. \p \v 9 Tango Yesu ayokaki maloba oyo, akamwaki ye mingi ; bongo abalukaki epai ya ebele ya bato oyo bazalaki kolanda Ye mpe alobaki : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : ezala kati na Isalaele, natikali nanu komona te kondima ya boye.\wj* \p \v 10 Tango bato oyo mokonzi ya basoda atindaki bazongaki na ndako, bakutaki mosali yango nzoto kolongono. \s1 Yesu asekwisi elenge mobali \p \v 11 Sima na yango, Yesu akendeki na engumba moko na kombo Nayini ; bayekoli na Ye elongo na ebele ya bato balandaki Ye. \v 12 Wana akomaki pene ya ekuke ya engumba, akutanaki na bato bazali kokende kokunda mwana mobali moko oyo awutaki kokufa : azalaki mwana kaka moko ya mwasi moko akufisa mobali. Mpe bato mingi ya engumba yango bazalaki elongo na mwasi yango. \v 13 Tango kaka Nkolo amonaki mwasi yango, ayokelaki ye mawa mingi mpe alobaki na ye : \pi1 \wj — Kolela te !\wj* \p \v 14 Apusanaki mpe asimbaki tsipoyi oyo bazalaki komema na yango mwana oyo akufaki, mpe bato oyo bazalaki komema yango batelemaki. Yesu alobaki : \pi1 \wj — Elenge mobali, nalobi na yo, lamuka !\wj* \p \v 15 Moto oyo akufaki avandaki mpe abandaki koloba ; mpe Yesu azongisaki ye epai ya mama na ye. \v 16 Bato nyonso batondaki na kobanga, bakomaki kokumisa Nzambe mpe koloba : \pi1 — Mosakoli moko ya monene abimi kati na biso. Nzambe ayei kosunga bato na Ye ! \p \v 17 Sango oyo na tina na Yesu epanzanaki kati na Yuda mpe kati na bamboka ya zingazinga. \s1 Yesu mpe Yoane Mobatisi \r (Mat 11.2-19) \p \v 18 Bayekoli ya Yoane bayebisaki makambo wana nyonso epai ya nkolo na bango. Yoane abengaki bayekoli na ye, mibale kati na bango, \v 19 mpe atindaki bango epai ya Nkolo Yesu mpo na kotuna : \pi1 — Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ? \p \v 20 Tango bakomaki epai ya Yesu, balobaki na Ye : \pi1 — Yoane Mobatisi atindi biso epai na Yo mpo ete totuna : « Boni, ozali penza Ye oyo asengelaki koya to tosengeli kozela mosusu ? » \p \v 21 Kaka na tango, Yesu abikisaki bato ebele na bokono, na pasi mpe na milimo mabe, mpe afungolaki miso ya bakufi miso ebele. \v 22 Boye, Yesu azongiselaki bayekoli oyo Yoane atindaki : \pi1 \wj — Bokende koyebisa Yoane makambo oyo bomoni mpe oyo boyoki : bakufi miso bazali komona, bakufi matoyi bazali koyoka, ba-ebosono bazali kotambola, bato na maba bazali kopetolama, bakufi bazali kosekwa, mpe Sango Malamu ezali kosakolama epai ya babola.\wj* \v 23 \wj Esengo na moto oyo akokweyisa kondima na ye te likolo na Ngai !\wj* \p \v 24 Tango bato oyo Yoane atindaki bazongaki, Yesu akomaki koloba na ebele ya bato na tina na Yoane : \pi1 \wj — Eloko nini bokendeki kotala kati na esobe ? Mwa nzete oyo mopepe ezalaki koningisa epai na epai ?\wj* \v 25 \wj Soki te, bokendeki penza kotala nini ? Moto moko alata bilamba ya kitoko ? Te ! Bato oyo balataka bilamba ya kitoko mpe bamisepelisaka kati na bozwi na bango bavandaka kati na bandako ya bakonzi.\wj* \v 26 \wj Kasi nani bino bokendeki penza kotala ? Mosakoli ? Iyo, nazali koloba na bino, mpe aleki kutu ata mosakoli.\wj* \v 27 \wj Yoane azali moto oyo Makomi ezali koloba boye na tina na ye :\wj* \q1 \wj « Nakotinda ntoma na Ngai liboso na Yo,\wj* \q2 \wj oyo akobongisela Yo nzela. »\wj* \pi1 \v 28 \wj Nazali koloba na bino : kati na bato oyo babotama na mwasi, moko te aleki Yoane na monene ; nzokande, ye oyo aleki moke kati na Bokonzi ya Nzambe aleki Yoane Mobatisi na monene.\wj* \r (Mat 11.16-19) \p \v 29 Bato nyonso elongo na bafutisi mpako oyo bayokaki maloba na Yesu bandimaki ete nzela ya Nzambe ezali sembo, pamba te Yoane abatisaki bango \v 30 Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko baboyaki mokano ya Nzambe mpo na bango, pamba te baboyaki ete Yoane abatisa bango. \p \v 31 Boye Yesu alobaki : \pi1 \wj — Na nani penza nakokokanisa bato ya ekeke oyo ? Bakokani penza na banani ?\wj* \v 32 \wj Bakokani penza na bana mike oyo bavandi na esika oyo bato ebele bakutanaka mpe bazali koganga, bamoko na bamosusu :\wj* \q1 \wj « Tobetaki baflite, kasi bobinaki te ;\wj* \q2 \wj toyembelaki bino banzembo ya matanga,\wj* \q2 \wj kasi bolelaki te ! »\wj* \pi1 \v 33 \wj Pamba te, tango Yoane Mobatisi ayaki, azalaki kolia mapa te mpe azalaki komela vino te, mpe bolobaki : « Azali na molimo mabe kati na ye ! »\wj* \pi1 \v 34 \wj Mwana na Moto ayaki, azali kolia, azali komela, mpe bozali koloba : « Azali na lokoso ya kolia mpe ya komela masanga, moninga ya bafutisi mpako mpe ya bato ya masumu ! »\wj* \v 35 \wj Kasi bato nyonso oyo bayambaka Bwanya ya Nzambe batalisaka ete ezali sembo.\wj* \s1 Yesu mpe mwasi mosumuki \p \v 36 Mofarizeo moko abengisaki Yesu mpo ete alia mesa moko elongo na ye. Yesu akendeki na ndako ya Mofarizeo yango mpe avandaki na mesa mpo na kolia. \v 37 Nzokande, kati na engumba yango, ezalaki na mwasi moko oyo azalaki kobika bomoi ya masumu. Tango ayokaki ete Yesu azali kolia na ndako ya Mofarizeo, ayaki wana na molangi ya alibatre etonda na malasi, \v 38 atelemaki na sima ya Yesu, na makolo na Ye ; azalaki kolela mpe, na mpinzoli na ye, akomaki kopolisa makolo ya Yesu. Bongo apangusaki makolo yango na nzela ya suki na ye, apesaki yango beze mpe asopelaki yango malasi. \p \v 39 Tango Mofarizeo oyo abengisaki Yesu amonaki bongo, amilobelaki : \pi1 — Soki moto oyo azali mosakoli, alingaki koyeba soki mwasi oyo azali kosimba Ye azali nani, mpe soki azali mwasi ya lolenge nini : moto ya masumu. \p \v 40 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Simona, nazali na likambo ya koyebisa yo.\wj* \p Mofarizeo azongisaki : \pi1 — Moteyi, loba yango. \p \v 41 Yesu alobaki : \pi1 \wj — Moto moko adefisaki bato mibale mbongo. Moto ya liboso asengelaki kozongisa mbongo ya bibende nkama mitano, mpe oyo ya mibale, mbongo ya bibende tuku mitano.\wj* \v 42 \wj Kasi lokola, kati na bango mibale, moko te azalaki na mbongo ya kozongisa, modefisi alimbisaki bango mpo ete bafuta lisusu niongo yango te. Na makanisi na yo, nani kati na bango mibale akolinga modefisi koleka ?\wj* \p \v 43 Simona azongisaki : \pi1 — Nakanisi ete ezali moto oyo balimbisi niongo ya mbongo oyo eleki ebele. \p Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Okati malamu !\wj* \p \v 44 Bongo abalukaki epai ya mwasi, mpe alobaki na Simona : \pi1 \wj — Omoni mwasi oyo ? Tango nakotaki na ndako na yo, opesaki Ngai mayi te ya kosukola makolo na Ngai ; kasi ye, apolisi yango na mpinzoli na ye mpe apangusi yango na nzela ya suki na ye.\wj* \v 45 \wj Opesaki Ngai beze te ; kasi ye, banda nakotaki awa, atiki te kopesa makolo na Ngai beze.\wj* \v 46 \wj Opakolaki Ngai mafuta te na moto ; kasi ye, asopeli makolo na Ngai malasi.\wj* \v 47 \wj Yango wana, nazali koloba na yo : ebele ya masumu na ye elimbisami, lokola atalisi bolingo monene. Kasi moto oyo balimbisaki niongo moke azali kotalisa bolingo moke.\wj* \p \v 48 Bongo Yesu alobaki na mwasi : \pi1 \wj — Masumu na yo elimbisami.\wj* \p \v 49 Bato mosusu oyo babengamaki elongo na Ye bakomaki koloba, bango na bango : \pi1 — Moto oyo azali penza nani, oyo akomi ata kolimbisa masumu ? \p \v 50 Kasi Yesu alobaki na mwasi yango : \pi1 \wj — Kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia !\wj* \c 8 \s1 Basi oyo bazalaki kotambola na Yesu \p \v 1 Sima na yango, Yesu atambolaki na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya mpe kosakola Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe. Bayekoli nyonso zomi na mibale bazalaki elongo na Ye, \v 2 bakisa ndambo ya basi oyo bakangolamaki na milimo mabe mpe babikisamaki na bokono : Mari, moto ya Magidala, oyo kati na ye, Yesu abenganaki milimo mabe sambo ; \v 3 Jane, mwasi ya Shuza oyo azalaki kobatela biloko ya Erode ; Suzana ; mpe basi mosusu ebele. Basi yango bazalaki kosalisa mpe kosunga Yesu mpe bayekoli na Ye, na nzela ya biloko na bango moko. \s1 Lisese ya moloni \r (Mat 13.1-9; Mlk 4.1-9) \p \v 4 Wana ebele ya bato bazalaki kosangana, mpe bato oyo bazalaki kowuta na bingumba bazalaki koya epai ya Ye, alobaki na bango lisese oyo : \pi1 \v 5 \wj — Moloni moko akendeki kolona na elanga na ye. Wana azalaki kobwaka nkona na ye, ndambo ekweyaki pembeni ya nzela ; baleki nzela banyataki-nyataki yango, mpe bandeke ya likolo eliaki yango.\wj* \v 6 \wj Ndambo mosusu ekweyaki na mabele etonda na mabanga ; tango kaka ebandaki kobimisa mito, mito ekawukaki, pamba te ezalaki na mayi te.\wj* \v 7 \wj Ndambo mosusu ekweyaki kati na banzube ; banzube ekolaki nzela moko na yango mpe efinaki-finaki mito na yango.\wj* \v 8 \wj Kasi ndambo mosusu ekweyaki na mabele ya malamu, ebimisaki mito oyo ekolaki mpe ekomaki banzete : nkona moko na moko ebotaki bambuma nkama moko.\wj* \p Tango Yesu asilisaki koloba bongo, agangaki : \pi1 \wj — Tika ete moto nyonso oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !\wj* \r (Mat 13.10-13; Mlk 4.10-12) \p \v 9 Bayekoli ya Yesu batunaki Ye ndimbola ya lisese yango. \p \v 10 Azongiselaki bango : \pi1 \wj — Boyebi ya mabombami ya Bokonzi ya Nzambe epesameli nde na bino ; kasi epai ya bato mosusu, nazali koloba na masese, mpo ete,\wj* \q1 \wj atako bakoki kotala, bamona te ;\wj* \q2 \wj mpe atako bakoki koyoka, basosola te.\wj* \r (Mat 13.18-23; Mlk 4.13-20) \pi1 \v 11 \wj Tala ndimbola ya lisese yango : Nkona ezali Liloba na Nzambe.\wj* \v 12 \wj Nkona oyo ekweyaki pembeni ya nzela ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe, kasi Satana ayaka kolongola yango kati na mitema na bango mpo ete bandima te mpe babikisama te.\wj* \pi1 \v 13 \wj Nkona oyo ekweyaki na mabele etonda na mabanga ezali bato oyo bayokaka Liloba mpe bayambaka yango na esengo, kasi batikaka yango te kozwa misisa : bandimaka kaka mpo na mwa tango moke ; soki komekama eyei, basundolaka mbala moko kondima.\wj* \pi1 \v 14 \wj Nkona oyo ekweyaki kati na banzube ezali bato oyo, sima na koyoka Liloba, bamitikaka ete, na etamboli na bango, mitungisi ya bomoi ya mokolo na mokolo, bomengo mpe bisengo ya mokili efinafina bango, mpe ete babota te bambuma.\wj* \pi1 \v 15 \wj Nkona oyo ekweyaki na mabele ya malamu ezali bato oyo, na mitema ya sembo mpe ya malamu, bayokaka Liloba, babatelaka yango, bayikaka mpiko mpe babotaka bambuma.\wj* \s1 Lisese ya mwinda \r (Mat 4.21-25) \pi1 \v 16 \wj Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na se ya katini to na se ya mbeto ; atiaka yango nde na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole na yango.\wj* \v 17 \wj Pamba te eloko moko te ebombama ekozanga kobima na pole, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana to kobima na pole.\wj* \pi1 \v 18 \wj Boye, bosala keba na lolenge na bino ya koyoka ! Pamba te, na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na ye oyo azangi, bakobotola ata oyo azali kokanisa ete azali na yango.\wj* \s1 Mama mpe bandeko ya Yesu \r (Mat 12.46-50; Mlk 3.31-35) \p \v 19 Mama mpe bandeko mibali ya Yesu bayaki kotala Yesu, kasi bakokaki te kokoma pene na Ye mpo na ebele ya ebele. \v 20 Moto moko ayebisaki Ye : \pi1 — Mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali batelemi libanda, bazali na posa ya komona yo. \p \v 21 Kasi Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Mama na Ngai mpe bandeko na Ngai, ezali bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batiaka yango na misala.\wj* \s1 Yesu aleki mopepe na makasi \r (Mat 8.23-27; Mlk 4.35-41) \p \v 22 Mokolo moko, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Tokatisa na ngambo mosusu ya ebale.\wj* \p Bongo bamataki na bwato mpe bakendeki. \v 23 Wana bayekoli bazalaki koluka nkayi, Yesu alalaki pongi. Mopepe moko ya makasi epepaki kati na ebale ; bwato ekomaki kotonda na mayi, mpe bakomaki na likama monene. \v 24 Bayekoli bapusanaki mpe balamusaki Ye na koganga : \pi1 — Moteyi, Moteyi, tozali kokufa ! \p Yesu alamukaki mpe apesaki mitindo na mopepe mpe mbonge ; bongo ekitaki, mpe kimia ezongaki. \v 25 Yesu atunaki bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Wapi kondima na bino ?\wj* \p Kasi bango, batondaki na somo mpe bakamwaki, bakomaki kolobana bango na bango : « Moto oyo azali penza nani ? Azali kopesa mitindo ata na mipepe mpe na mayi, mpe yango ezali kotosa ye ! » \s1 Yesu aleki milimo mabe na makasi \r (Mat 8.28-34; Mlk 5.1-20) \p \v 26 Bakomaki na etuka ya Geraza oyo ezali na ngambo mosusu ya ebale, etalana na Galile. \v 27 Tango Yesu anyataki mabele, mobali moko abimaki na engumba mpe ayaki kokutana na Ye ; azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe. Wuta kala, azalaki lisusu te kolata bilamba mpe kovanda na ndako, kasi akomaki kovanda kati na bakunda. \v 28 Tango amonaki Yesu, agangaki mpe amibwakaki na makolo na Ye, na koganga na mongongo makasi koleka : \pi1 — Yesu, Mwana na Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, olingi nini epai na ngai ? Nabondeli Yo, kotungisa ngai te ! \p \v 29 Pamba te Yesu apesaki mitindo na molimo ya mbindo ete ebima kati na mobali oyo ekangaki wuta kala. Mpe atako bakangaki ye minyololo na maboko mpe makolo mpe bazalaki kokengela ye, kasi abukaki minyololo yango, mpe molimo mabe ekumbaki ye na bisika oyo azalaki kaka ye moko. \v 30 Yesu atunaki ye : \pi1 \wj — Kombo na yo nani ?\wj* \p Azongisaki : \pi1 — Ngulupa. \p Pamba te milimo mabe ebele ekotaki kati na ye. \v 31 Bongo milimo mabe yango ezalaki kosenga na Yesu ete atinda yango te kati na libulu ya mozindo. \v 32 Nzokande, etonga moko monene ya bangulu ezalaki kolia kuna na ngomba. Milimo mabe esengaki na Yesu ete atika yango kokota kati na bangulu ; mpe Yesu apesaki yango nzela. \v 33 Milimo mabe ebimaki kati na mobali yango, mpe ekotaki kati na bangulu. Mbala moko, etonga ya bangulu ekitaki mbangu longwa na ngomba kino kati na ebale mpe ezindaki. \p \v 34 Tango bakengeli ya bangulu bamonaki likambo oyo ewuti kosalema, bakimaki mpe bakendeki kopesa sango kati na engumba mpe na bilanga. \v 35 Bato babimaki mpo na koya kotala likambo oyo esalemi. Tango bakomaki epai ya Yesu, bamonaki mobali, oyo milimo mabe ebimaki kati na ye, alata bilamba, avandi na makolo ya Yesu na mayele na ye ya kokoka ; boye somo ekangaki bango. \v 36 Ba-oyo bamonaki likambo oyo ewuti kosalema bayebisaki bato ndenge nini moto oyo azalaki na se ya bokonzi ya milimo mabe akangolamaki. \p \v 37 Bongo bato nyonso ya etuka ya bato ya Geraza basengaki na Yesu ete alongwa na etuka na bango, pamba te somo ekangaki bango. Boye Yesu amataki na bwato mpe akendeki. \v 38 Mobali oyo akangolamaki na milimo mabe asengaki kokende elongo na Ye, kasi Yesu azongisaki ye na koloba : \pi1 \v 39 \wj — Zonga na libota na yo mpe tatola makambo nyonso oyo Nzambe asali mpo na yo.\wj* \p Boye mobali yango akendeki mpe atatolaki na engumba mobimba, makambo nyonso oyo Yesu asalaki mpo na ye. \s1 Yesu aleki bokono mpe kufa na makasi \r (Mat 9.18-26; Mlk 5.21-43) \p \v 40 Tango Yesu azongaki, ebele ya bato bayambaki Ye, pamba te bango nyonso bazalaki kozela Ye. \v 41 Mobali moko oyo kombo na ye ezalaki Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, ayaki, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe abondelaki Ye ete akende na ndako na ye, \v 42 pamba te mwana na ye kaka moko ya mwasi, ya mibu pene zomi na mibale ya mbotama, akomaki pene ya kokufa. Wana Yesu azalaki kokende, ebele ya bato bazalaki kotutana-tutana na Ye na bangambo nyonso. \p \v 43 Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo azalaki na bokono ya kotanga makila, mpe bokono yango ewumelaki mibu pene zomi na mibale ; mpe asilisaki bozwi na ye nyonso epai ya minganga, kasi moko te alongaki kobikisa ye na bokono yango. \v 44 Adusolaki kino ayaki kotelema na sima ya Yesu mpe asimbaki singa ya songe ya elamba na Ye ; mpe mbala moko, makila na ye etikaki kotanga. \p \v 45 Yesu atunaki : \pi1 \wj — Nani asimbi Ngai ?\wj* \p Lokola moto ata moko te andimaki, Petelo alobaki na Yesu : \pi1 — Moteyi, ebele ya bato bazali kofinana-finana mpe kotutana-tutana na Yo. \p \v 46 Kasi Yesu alobaki : \pi1 \wj — Moto moko asimbi Ngai ; nayebi ete nguya ebimi kati na Ngai.\wj* \p \v 47 Awa mwasi yango amonaki ete azali ya kobombama te, akendeki na kolenga, amibwakaki na makolo ya Yesu mpe alobaki na miso ya bato nyonso mpo na nini asimbaki Yesu mpe ndenge nini abiki mbala moko na bokono na ye. \v 48 Kasi Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Mwana na Ngai ya mwasi, kondima na yo ebikisi yo ; kende na kimia.\wj* \p \v 49 Wana Yesu azalaki nanu koloba, moto moko ayaki wuta na ndako ya Jairisi, mokambi ya ndako ya mayangani, mpe alobaki : \pi1 — Mwana na yo ya mwasi akufi. Kotungisa lisusu Moteyi te. \p \v 50 Lokola Yesu ayokaki ye koloba bongo, alobaki na Jairisi : \pi1 \wj — Kobanga te ! Ndima kaka, mpe akobika na bokono na ye.\wj* \p \v 51 Tango Yesu akomaki na ndako ya Jairisi, atikaki moto moko te kokota elongo na Ye, longola kaka Petelo, Yoane, Jake, tata mpe mama ya mwana. \v 52 Bato nyonso bazalaki kolela mpe koyoka mawa mpo na mwana yango. Kasi Yesu alobaki : \pi1 \wj — Bokata kolela ; akufi te, azali nde ya kolala !\wj* \p \v 53 Bato basekaki Yesu, wana bayebaki ete asilaki kokufa. \v 54 Kasi Yesu asimbaki ye na loboko mpe alobaki : \pi1 \wj — Mwana na Ngai, lamuka !\wj* \p \v 55 Pema ya bomoi ezongaki kati na mwana ; mpe mbala moko, atelemaki. Bongo Yesu atindaki bango kopesa ye eloko ya kolia. \v 56 Baboti na ye bakamwaki, kasi Yesu apekisaki bango koloba na moto ata moko te likambo oyo ewuti kosalema. \c 9 \s1 Yesu atindi bayekoli na Ye zomi na mibale \r (Mat 10.1-9, 11-14; Mlk 6.7-13) \p \v 1 Yesu abengaki bayekoli na Ye zomi na mibale, apesaki bango nguya mpe bokonzi ya kobengana milimo nyonso ya mabe mpe ya kobikisa bokono ; \v 2 mpe atindaki bango kosakola Bokonzi ya Nzambe mpe kobikisa babeli. \v 3 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Bomema eloko moko te mpo na mobembo, ezala lingenda, sakosi, eloko ya kolia to mbongo ; bozala na banzambala mibale te na moto.\wj* \v 4 \wj Na ndako nyonso oyo bokokota, bovanda kuna kino bokolongwa na engumba.\wj* \v 5 \wj Soki bato baboyi koyamba bino, botika engumba na bango mpe bopupola putulu ya makolo na bino lokola litatoli mpo na kotelemela bango.\wj* \p \v 6 Bayekoli bakendeki, batambolaki na mboka moko na moko mpe bazalaki kosakola Sango Malamu mpe kobikisa babeli na bisika nyonso. \s1 Erode amitungisi \r (Mat 14.1-2; Mlk 6.14-16) \p \v 7 Erode, moyangeli ya etuka, ayokaki sango ya makambo nyonso oyo ezalaki koleka ; amitungisaki makasi, pamba te bamoko bazalaki koloba : « Yoane asekwi, » \v 8 bamosusu : « Eliya abimi, » mpe bamosusu lisusu : « Moko kati na basakoli ya kala asekwi. » \p \v 9 Kasi Erode azalaki komilobela : « Ngai nde nakataki Yoane moto ; bongo moto oyo nazali koyoka makambo minene boye na tina na ye, azali penza nani ? » \p Boye alukaki kokutana na Yesu. \s1 Yesu aleisi mibali nkoto mitano \r (Mat 14.13-21; Mlk 6.33-44; Yn 6.1-15) \p \v 10 Tango bantoma bazongaki, bayebisaki Yesu makambo oyo basalaki. Bongo Yesu amemaki bango elongo na Ye, mpe bakendeki na engumba Betisaida, na esika oyo bazalaki kaka bango moko. \v 11 Kasi tango ebele ya bato bayokaki bongo, balandaki Ye. Yesu ayambaki bango, ateyaki bango na tina na Bokonzi ya Nzambe, abikisaki mpe bato oyo bazalaki na posa ya lobiko na bokono ya nzoto. \p \v 12 Awa ekomaki pokwa, bantoma zomi na mibale bapusanaki pene ya Yesu mpe balobaki na Ye : \pi1 — Zongisa bato oyo mpo ete bakende komilukela bilei mpe bisika ya kolala, kati na bamboka mpe bilanga ya zingazinga, pamba te tozali awa kati na esika ebombama. \p \v 13 Kasi Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bopesa bango bino moko biloko ya kolia.\wj* \p Bazongisaki : \pi1 — Tozali kaka na mapa mitano mpe bambisi mibale ; loba nde tokende kosomba bilei mpo na ebele ya bato oyo nyonso. \p \v 14 Ezalaki wana na mibali pene nkoto mitano. \p Yesu alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 — Bovandisa bango na masanga ; tika ete lisanga moko na moko ezala na bato tuku mitano. \p \v 15 Bayekoli basalaki bongo, mpe bato nyonso avandaki. \v 16 Yesu akamataki mapa yango mitano mpe bambisi yango mibale, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe akataki mapa yango ; bongo apesaki biteni na yango epai ya bayekoli mpo ete bakabola yango epai ya bato. \v 17 Bato nyonso baliaki mpe batondaki ; bayekoli balokotaki biteni oyo etikalaki, mpe biteni yango etondisaki bitunga zomi na mibale. \s1 Petelo atatoli mpo na Yesu \r (Mat 16.13-21; Mlk 8.27-31; Yn 6.67-71) \p \v 18 Mokolo moko, wana Yesu azalaki kosambela na pembeni, mpe bayekoli na Ye bazalaki elongo na Ye, atunaki bango : \pi1 \wj — Bato bazali koloba nini na tina na Ngai ? Mpo na bango, Ngai nazali nani ?\wj* \p \v 19 Bazongisaki : \pi1 — Bamoko bazali koloba ete ozali Yoane Mobatisi ; bamosusu, Eliya ; mpe bamosusu lisusu, moko kati na basakoli ya kala oyo asili kosekwa. \p \v 20 Yesu atunaki bango lisusu : \pi1 \wj — Bongo bino, bolobaka ete Ngai nazali nani ?\wj* \p Petelo azongisaki : \pi1 — Ozali Masiya oyo Nzambe atindi. \p \v 21 Yesu apesaki bango mitindo ete bameka koloba bongo te ata na moto moko. \p \v 22 Mpe alobaki : \pi1 \wj — Mwana na Moto asengeli komona pasi mingi ; bakambi ya bato, bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko basengeli koboya Ye. Basengeli koboma Ye, mpe asengeli kosekwa na mokolo ya misato.\wj* \s1 Ndenge nini kolanda Yesu \r (Mat 16.24-28; Mlk 8.34–9.1) \p \v 23 Bongo Yesu alobaki na bango nyonso : \pi1 \wj — Moto nyonso oyo alingi kolanda Ngai asengeli komiboya, kokamata ekulusu na ye mokolo na mokolo mpe kolanda Ngai.\wj* \v 24 \wj Pamba te, moto nyonso oyo akolinga kobikisa bomoi na ye akobungisa yango, kasi moto nyonso oyo akobungisa bomoi na ye mpo na Ngai akobikisa yango.\wj* \v 25 \wj Litomba nini ezali mpo na moto, soki azwi mokili mobimba, kasi amibungisi to abebisi bomoi na ye ?\wj* \v 26 \wj Moto nyonso oyo akoyoka Ngai mpe maloba na Ngai soni, Mwana na Moto akoyoka ye soni, tango akoya kati na nkembo na Ye mpe kati na nkembo ya Tata mpe ya ba-anjelu ya bule.\wj* \v 27 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : kati na bato oyo bazali awa, ezali na ba-oyo bakokufa te kino bakomona bokonzi ya Nzambe.\wj* \s1 Nzoto ya Yesu ebongwani \r (Mat 17.1-9; Mlk 9.2-10) \p \v 28 Mikolo pene mwambe sima na Yesu koloba bongo, azwaki elongo na Ye, Petelo, Yoane mpe Jake, mpe amataki na ngomba mpo na kokende kosambela. \p \v 29 Wana azalaki kosambela, elongi na Ye ebongwanaki, mpe bilamba na Ye ekomaki kongenga makasi lokola pole ya mikalikali. \v 30 Mibali mibale bazalaki kosolola na Yesu : Moyize mpe Eliya \v 31 oyo babimaki kati na kongenga ya nkembo ; bazalaki kolobela na tina na bozongi na Ye, oyo asengeli kokokisa na Yelusalemi. \p \v 32 Petelo mpe baninga na ye balalaki pongi makasi. Tango kaka balamukaki na pongi, bamonaki nkembo ya Yesu elongo na mibali wana mibale bazali ya kotelema elongo na Ye. \p \v 33 Wana mibali yango bazalaki kokabwana na Yesu, Petelo alobaki : \pi1 — Moteyi, eleki malamu mpo na biso kozala awa ! Totonga bandako misato ya kapo : moko mpo na Yo, moko mpo na Moyize, mpe moko mpo na Eliya. \p Solo, Petelo ayebaki te makambo oyo azalaki koloba. \v 34 Wana azalaki nanu koloba bongo, lipata moko ebimaki mpe ezipaki bango. Somo ekangaki bayekoli, wana bakotaki kati na lipata yango. \p \v 35 Mongongo moko eyokanaki wuta kati na lipata yango, elobaki : \pi1 — Oyo azali Mwana na Ngai, oyo napona ; boyoka Ye ! \p \v 36 Sima na mongongo yango koloba, bamonaki ete Yesu azali Ye moko. Bayekoli babombaki likambo yango mpo na bango moko mpe, na mikolo wana, bayebisaki ata na moto moko te makambo oyo bamonaki. \s1 Molimo mabe kati na mwana moko \r (Mat 17.14-21; Mlk 9.14-29) \p \v 37 Mokolo oyo elandaki, tango bakitaki na ngomba, ebele ya bato bayaki kokutana na Yesu. \v 38 Mobali moko kati na ebele yango ya bato agangaki : \pi1 — Moteyi, nazali kosenga na Yo ete otala mwana na ngai ya mobali, pamba te nazali kaka na mwana moko ! \v 39 Molimo moko etungisaka ye : soki ekangi ye, mwana akoganga na mbala moko, ekoningisa ye makasi kino kokweyisa ye na mabele ; mwana akokangama mpe akobimisa fulufulu na monoko. Etikaka ye na pasi sima na kozokisa ye. \v 40 Nasengaki na bayekoli na Yo ete babengana molimo yango, kasi balongaki te. \p \v 41 Yesu alobaki : \pi1 \wj — Bino, ekeke ya bato mabe mpe bazanga kondima, tango boni nasengeli lisusu kovanda elongo na bino mpe koyikela bino mpiko ? Mema mwana na yo awa.\wj* \p \v 42 Wana mwana azalaki kopusana, molimo mabe ebwakaki ye na mabele mpe ebandaki koningisa ye makasi. Kasi Yesu apesaki mitindo na molimo mabe yango ete ebima kati na mwana, abikisaki mwana na pasi na ye mpe azongisaki ye na maboko ya tata na ye. \v 43 Mpe bato nyonso bakamwaki mingi monene ya Nzambe. \s1 Yesu asakoli kufa na Ye \r (Mat 17.22-23; Mlk 9.30-32) \p Wana bato nyonso bazalaki kokamwa makambo nyonso oyo Yesu asalaki, alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \v 44 \wj — Boyoka na bokebi makambo oyo nazali koyebisa bino : Bazali kokaba Mwana na Moto na maboko ya bato.\wj* \p \v 45 Kasi bayekoli basosolaki te makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpo ete basosola te tina na yango, mpe bazalaki kobanga kopesa Yesu mituna na tina na yango. \s1 Nani aleki monene ? \r (Mat 18.1-5; Mlk 9.33-37) \p \v 46 Tembe moko ebimaki kati na bayekoli ; bazalaki koluka koyeba moto oyo aleki monene kati na bango. \v 47 Kasi lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, akamataki mwana moke, atiaki ye pembeni na Ye, \v 48 mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Moto nyonso oyo ayambi mwana oyo ya moke na Kombo na Ngai, ayambi nde Ngai moko ; mpe moto nyonso oyo ayambi Ngai ayambi nde Motindi na Ngai. Pamba te, ezali ye oyo aleki moke kati na bino nyonso nde aleki monene.\wj* \r (Mlk 9.38-41) \p \v 49 Yoane alobaki : \pi1 — Moteyi, tomonaki moto moko kobengana milimo mabe na Kombo na Yo, mpe tomekaki kopekisa ye, pamba te azali moto ya lisanga na biso te. \p \v 50 Yesu alobaki : \pi1 \wj — Bopekisa ye te, pamba te moto nyonso oyo atelemelaka bino te azali mpo na bino.\wj* \ms1 Kokende ya Yesu na Yelusalemi \s1 Baboyi koyamba Yesu na Samari \p \v 51 Lokola tango oyo Yesu asengeli komemama na Likolo ekomaki pene, Yesu azwaki mokano ya kokende na Yelusalemi. \v 52 Atindaki bantoma liboso na Ye ; boye wana bazalaki kokende, bakotaki na mboka moko ya bato ya Samari mpo na kobongisela Ye biloko. \v 53 Kasi bato ya Samari baboyaki koyamba Ye, mpo ete azalaki kokende na Yelusalemi. \v 54 Tango bayekoli, Jake mpe Yoane, bamonaki bongo, balobaki : \pi1 — Nkolo, olingi ete tobelela moto ete ekitela bango kowuta na likolo mpo na kobebisa bango ? \p \v 55 Yesu abalukaki mpo na kotala bango malamu mpe apamelaki bango : \pi1 [\wj — Boni, boyebi molimo oyo ezali kotindika bino na makanisi ya boye ? Mwana na Moto ayaki te mpo na koboma bato, kasi mpo na kobikisa bango.\wj*]\f + \fr 9.55 \fr*\ft Makomi oyo ezali te kati na mikanda mosusu ya kala.\ft*\f* \p \v 56 Bongo Yesu elongo na bayekoli na Ye bakendeki na mboka mosusu. \s1 Ndenge nini kolanda Yesu \r (Mat 8.18-22) \p \v 57 Wana bazalaki kotambola na nzela, mobali moko alobaki na Yesu : \pi1 — Nakolanda Yo na esika nyonso oyo okokende. \p \v 58 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Bambwa ya zamba ezalaka na madusu na yango na se ya mabele mpo na kobombama, mpe bandeke ya likolo ezalaka na bazala na yango ; kasi Mwana na Moto azangi esika ya kolala mpo na kopema.\wj* \p \v 59 Yesu alobaki na mobali mosusu : \pi1 \wj — Landa Ngai.\wj* \p Kasi mobali yango azongiselaki Ye : \pi1 — Nkolo, pesa ngai nzela ya kokende nanu kokunda tata na ngai. \p \v 60 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Tika bakufi bakunda bakufi na bango ; kasi yo, kende kosakola Bokonzi ya Nzambe.\wj* \p \v 61 Mosusu lisusu alobaki na Ye : \pi1 — Nkolo, nakolanda Yo ; kasi pesa ngai nzela ya kozonga nanu mpo na kokende kopesa libota na ngai mbote ya suka. \p \v 62 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Moto oyo asimbi kongo mpo na kobalola mabele ya bilanga, kasi azali kotala na sima, azali na tina moko te mpo na Bokonzi ya Nzambe.\wj* \c 10 \s1 Yesu atindi bayekoli tuku sambo na mibale \r (Mat 9.37-38; 10.5-16) \p \v 1 Sima na yango, Nkolo aponaki bayekoli tuku sambo na mibale mpe atindaki bango, mibale-mibale liboso na Ye, na bingumba nyonso mpe na bisika nyonso oyo Ye moko asengelaki kokende. \v 2 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Bambuma ya kobuka etondi meke kati na elanga, kasi basali bazali moke. Boye bosenga na Nkolo elanga ete atinda basali kati na elanga na Ye.\wj* \v 3 \wj Bokende ! Nazali kotinda bino lokola bampate kati na bambwa ya zamba.\wj* \v 4 \wj Bomema mbongo te, sakosi te to basandale te, mpe bopesa moto moko te mbote na nzela.\wj* \pi1 \v 5 \wj Na ndako nyonso oyo bokokota, boloba liboso : « Tika ete kimia ezala na ndako oyo ! »\wj* \v 6 \wj Soki ezali na moto ya kimia kati na ndako yango, kimia na bino ekovanda likolo na ye ; soki te, kimia yango ekozongela bino.\wj* \v 7 \wj Bovanda kuna, bolia mpe bomela nyonso oyo bakopesa bino ; pamba te mosali asengeli kozwa lifuti na mosala na ye. Botambola-tambola na bandako nyonso te.\wj* \pi1 \v 8 \wj Tango bokokota na engumba songolo, soki bayambi bino, bolia bilei oyo bakopesa bino,\wj* \v 9 \wj bobikisa babeli oyo bazali kuna mpe boloba na bango : « Bokonzi ya Nzambe ekomi pene na bino. »\wj* \v 10 \wj Kasi tango bokokota na engumba songolo, soki baboyi koyamba bino, bokende na babalabala na yango mpe boloba :\wj* \v 11 \wj « Ezala putulu ya engumba na bino, topupoli yango wuta na makolo na biso, mpo na kokebisa bino. Nzokande, boyeba malamu ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene. »\wj* \pi1 \v 12 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : Na mokolo wana, etumbu na yango ekozala makasi koleka etumbu ya Sodome.\wj* \pi1 \v 13 \wj Mawa na yo, Korazini ! Mawa na yo, Betisaida ! Pamba te soki bikamwa oyo esalemaki kati na bino esalemaki kati na bingumba Tiri mpe Sidoni, mbele wuta kala, bavandi na yango babongola mitema, balata basaki mpe bamipakola putulu.\wj* \v 14 \wj Kasi, na kosambisama, etumbu na bino ekozala makasi koleka etumbu ya Tiri mpe Sidoni.\wj* \v 15 \wj Mpe yo, Kapernawumi, okanisi ete okotombolama kino na Likolo ? Te, okokitisama kino na mboka ya bakufi !\wj* \pi1 \v 16 \wj Moto oyo atosi bino atosi nde Ngai, moto oyo aboyi bino aboyi nde Ngai, nzokande moto oyo aboyi Ngai aboyi nde Motindi na Ngai.\wj* \b \p \v 17 Tango bayekoli yango tuku sambo na mibale bazongaki, batondaki na esengo mpe balobaki : \pi1 — Nkolo, ezala milimo mabe etosi biso na Kombo na Yo ! \p \v 18 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Namonaki Satana kokweya longwa na likolo, lokola mikalikali.\wj* \v 19 \wj Napesi bino bokonzi ya konyata banyoka mpe bakoto, mpe ya kolonga nguya nyonso ya monguna, mpe eloko moko te ekosala bino mabe.\wj* \v 20 \wj Nzokande, bosepela te komona ete milimo mabe ezali kotosa bino ; bosepela nde ete bakombo na bino ekomami kati na Likolo.\wj* \s1 Bolamu ya bayekoli \r (Mat 11.25-27) \p \v 21 Kaka na tango yango, awa Molimo Mosantu atondisaki Ye na esengo, Yesu alobaki : \pi1 \wj — Oh Tata, Nkolo ya Likolo mpe ya mabele, nakumisi Yo ! Pamba te obombaki makambo oyo, mpo ete bato ya bwanya mpe bato ya mayele bayeba yango te, kasi olakisi yango na bana mike. Iyo, Tata, pamba te yango nde osepelaki kosala.\wj* \pi1 \v 22 \wj Tata na Ngai apesa Ngai biloko nyonso. Moko te ayebi soki Mwana azali nani, longola kaka Tata ; mpe moko te ayebi soki Tata azali nani, longola kaka Mwana mpe ye oyo epai ya nani Mwana asepeli kotalisa Tata.\wj* \r (Mat 13.16-17) \p \v 23 Bongo, abalolaki miso na Ye epai ya bayekoli na Ye mpe alobaki na bango moko kaka : \pi1 \wj — Esengo na bato oyo bazali komona makambo oyo bozali komona !\wj* \v 24 \wj Pamba te, nazali koloba na bino : basakoli mpe bakonzi ebele batondaki na posa ya komona makambo oyo bino bozali komona, kasi bamonaki yango te ; batondaki na posa ya koyoka makambo oyo bino bozali koyoka, kasi bayokaki yango te.\wj* \s1 Lisese ya moto malamu ya mboka Samari \p \v 25 Molakisi moko ya Mobeko atelemaki mpe atunaki mpo na komeka Yesu : \pi1 — Moteyi, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ? \p \v 26 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Makambo nini ekomama kati na mobeko ? Otangaka yango ndenge nini ?\wj* \p \v 27 Molakisi ya mibeko azongisaki : \pi1 — Linga Nkolo, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba, na makasi na yo nyonso mpe na makanisi na yo nyonso ; mpe linga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. \p \v 28 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Opesi eyano ya malamu ; sala bongo mpe okozala na bomoi.\wj* \p \v 29 Kasi molakisi ya Mobeko alingaki kolakisa ete azali sembo, boye atunaki na Yesu : \pi1 — Nani azali moninga na ngai ? \p \v 30 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Moto moko azalaki kokende na Jeriko, wana awutaki na Yelusalemi. Na nzela, miyibi babetaki ye, babotolaki ye bilamba na ye, babetaki ye mpe bakendeki na bango, batikaki ye pene ya kokufa.\wj* \v 31 \wj Nzokande, na tango yango kaka, esalemaki ete Nganga-Nzambe moko akende mpe azwa nzela yango kaka ; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye.\wj* \v 32 \wj Ndenge moko mpe Molevi moko akomaki na esika yango ; tango kaka amonaki moto yango, akatisaki na ngambo mosusu ya nzela mpe akobaki mobembo na ye.\wj* \v 33 \wj Kasi moto moko ya Samari, wana azalaki kokende mobembo, akomaki na esika oyo moto yango azalaki ; tango kaka amonaki ye, ayokelaki ye mawa,\wj* \v 34 \wj apusanaki pene na ye, asopelaki bapota na ye mafuta mpe vino, mpe akangaki yango. Bongo amatisaki moto yango na likolo ya mile na ye moko, amemaki ye na ndako ya bapaya, mpe akobaki kosunga ye kuna.\wj* \v 35 \wj Mokolo oyo elandaki, abimisaki mbongo ya bibende mibale mpe apesaki yango na nkolo ndako ya bapaya ; alobaki na ye : « Salisa moto oyo malamu ; tango nakozonga, nakozongisela yo mbongo nyonso oyo okobakisa ! »\wj* \p \v 36 Yesu atunaki : \pi1 \wj — Mpo na yo, nani kati na bango misato azalaki moninga ya moto oyo akweyaki na maboko ya miyibi ?\wj* \p \v 37 Molakisi ya mibeko azongisaki : \pi1 — Ezali moto oyo ayokelaki ye mawa. \p Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Kende mpe sala bongo !\wj* \s1 Yesu epai ya Marte mpe Mari \p \v 38 Wana Yesu mpe bayekoli na Ye bazalaki kokende, Yesu akotaki na mboka moko, mpe mwasi moko oyo kombo na ye ezali Marte ayambaki Ye kati na ndako na ye. \v 39 Mari, ndeko mwasi ya Marte, ayaki kovanda na makolo ya Nkolo, mpe azalaki koyoka makambo oyo Nkolo azalaki koloba. \v 40 Kasi, na tango yango, Marte amipesaki na misala nyonso ya ndako ; ayaki na lombangu mpe alobaki : \pi1 — Ah Nkolo, ozali komona te ete ndeko na ngai atiki ngai kosala ngai moko misala ? Loba na ye ete asunga ngai ! \p \v 41 Nkolo azongiselaki ye : \pi1 \wj — Marte, Marte, ozali komitungisa mpe kominyokola mpo na makambo ebele,\wj* \v 42 \wj kasi likambo moko kaka ezali na tina. Mari aponi oyo eleki malamu, mpe moto ata moko te akobotola ye yango.\wj* \c 11 \s1 Yesu alakisi bayekoli kosambela \r (Mat 6.9-13) \p \v 1 Mokolo moko, Yesu azalaki kosambela na esika songolo. Tango asilisaki kosambela, moko kati na bayekoli na Ye alobaki na Ye : \pi1 — Nkolo, lakisa biso kosambela ndenge Yoane alakisaki bayekoli na ye. \p \v 2 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Tango bozali kosambela, boloba :\wj* \q1 \wj Tata,\wj* \q2 \wj tika ete Kombo na Yo ebulisama,\wj* \q2 \wj tika ete Bokonzi na Yo eya !\wj* \q1 \v 3 \wj Pesa biso bilei oyo tosengeli na yango, mokolo na mokolo,\wj* \q1 \v 4 \wj limbisa masumu na biso,\wj* \q2 \wj pamba te biso mpe tolimbisaka moto nyonso\wj* \q1 \wj oyo asalaka biso mabe ;\wj* \q2 \wj mpe komema biso na komekama te.\wj* \p \v 5 Alobaki na bango lisusu : \pi1 \wj — Soki moko kati na bino azali na molingami, bongo akei epai na ye na midi ya butu mpe alobi : « Molingami, defisa ngai mapa misato ;\wj* \v 6 \wj pamba te moko kati na baninga na ngai azali kosala mobembo mpe akomi epai na ngai, kasi nazangi bilei ya kopesa ye. »\wj* \v 7 \wj Soki molingami oyo, wuta kati na ndako na ye, azongisi : « Kotungisa ngai te, nasili kokanga ekuke ya ndako na ngai ; ngai mpe bana na ngai tolali, nakoki kolamuka te mpo na kopesa yo mapa. »\wj* \pi1 \v 8 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : ata soki akotelema te mpo na kopesa ye mapa yango, kasi akotelema penza mpo na motungisi na ye mpe akopesa ye nyonso oyo azali na yango na bosenga, pamba te azali moninga na ye.\wj* \r (Mat 7.7-11) \pi1 \v 9 \wj Boye, Ngai nazali koloba na bino : Bosenga, mpe bakopesa bino ; boluka, mpe bokomona ; bobeta ekuke, mpe bakofungolela bino.\wj* \v 10 \wj Pamba te moto nyonso oyo asengaka azwaka, moto oyo alukaka amonaka ; mpe moto oyo abetaka ekuke, bafungolelaka ye yango.\wj* \pi1 \v 11 \wj Nani kati na bino, batata, akopesa na mwana na ye nyoka soki asengi ye mbisi,\wj* \v 12 \wj to akopesa ye koto soki asengi ye liki ?\wj* \v 13 \wj Bongo soki bino bato oyo bozali kutu mabe boyebi kopesa na bana na bino biloko ya malamu, ndenge nini Tata oyo azali na Likolo apesa te Molimo Mosantu epai ya bato oyo basengaka Ye !\wj* \s1 Nzambe to Satana \r (Mat 12.22-30; Mlk 3.20-27) \p \v 14 Mokolo moko, Yesu azalaki kobengana molimo mabe oyo ezalaki kopekisa moto koloba. Tango molimo mabe yango ebimaki, moto oyo azalaki koloba te akomaki koloba, mpe ebele ya bato bakamwaki. \v 15 Kasi bamoko kati na bango balobaki : \pi1 — Azali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, mokonzi ya milimo mabe. \p \v 16 Bamosusu, mpo na komeka Yesu, basengaki na Ye elembo moko kowuta na Likolo. \v 17 Lokola Yesu ayebaki makanisi na bango, alobaki na bango : \pi1 \wj — Bokonzi nyonso oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekomipanza, mpe ndako oyo ekabwani mpe ekomi komibundisa ekokweya.\wj* \v 18 \wj Soki Satana akomi komibundisa, bokonzi na ye ekotelema ndenge nini ? Nalobi bongo mpo bolobi ete Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule.\wj* \v 19 \wj Mpe soki Ngai nazali kobengana milimo mabe na nguya ya Belizebule, bayekoli na bino babenganaka yango na nguya ya nani ? Mpo na yango, bayekoli na bino bakozala bango moko basambisi na bino.\wj* \pi1 \v 20 \wj Kasi soki ezali na nguya ya Nzambe nde Ngai nazali kobengana milimo mabe, wana Bokonzi ya Nzambe esili kokoma kino epai na bino.\wj* \v 21 \wj Tango elombe oyo alata bibundeli akengelaka ndako na ye, biloko na ye ebatelamaka malamu ;\wj* \v 22 \wj kasi soki moto mosusu oyo aleki ye na makasi ayei kobundisa ye mpe alongi ye, akobotola ye bibundeli oyo azalaki kotiela motema, akokamata biloko na ye nyonso mpe akokaba yango.\wj* \pi1 \v 23 \wj Moto oyo azali elongo na Ngai te azali monguna na Ngai, mpe moto oyo asangisaka te elongo na Ngai apanzaka.\wj* \r (Mat 12.43-45) \pi1 \v 24 \wj Soki molimo mabe ebimi kati na moto, ekendaka koyengayenga na bisika ekawuka mpo na koluka esika ya kopema. Kasi soki ezwi esika yango te, emilobelaka : « Eleki malamu mpo na ngai kozonga na ndako oyo natikaki. »\wj* \pi1 \v 25 \wj Tango molimo mabe yango ezongaka, ekutaka ndako yango polele, bakombola mpe babongisa malamu.\wj* \v 26 \wj Bongo ekendaka lisusu kozwa milimo mosusu sambo oyo eleki yango na mabe, mpe, elongo na yango, ekotaka mpe evandaka kuna. Boye bomoi ya moto yango ekomaka lisusu mabe, koleka ndenge ezalaki liboso.\wj* \p \v 27 Wana Yesu azalaki koloba makambo oyo, mwasi moko agangaki wuta kati na ebele ya bato : \pi1 — Esengo na mama oyo abotaki Yo mpe amelisaki Yo mabele ! \p \v 28 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Esengo nde na bato oyo bayokaka Liloba na Nzambe mpe batosaka yango !\wj* \s1 Elembo ya Yona \r (Mat 12.38-42) \p \v 29 Lokola bato bazalaki kotonda se kotonda pembeni na Ye, Yesu alobaki : \pi1 \wj — Bato ya ekeke oyo bazali bato mabe penza ! Bazali kosenga elembo ! Bakopesamela elembo mosusu te, longola kaka elembo ya Yona ;\wj* \v 30 \wj pamba te, ndenge Yona azalaki elembo mpo na bato ya Ninive, ndenge wana mpe Mwana na Moto akozala elembo mpo na bato ya ekeke oyo.\wj* \pi1 \v 31 \wj Na mokolo ya kosambisama, mwasi mokonzi ya sude akolamuka, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe akokatela bango etumbu, pamba te awutaki mosika, na suka ya mokili, mpo na koyoka bwanya ya Salomo ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Salomo.\wj* \v 32 \wj Na mokolo ya kosambisama, bato ya Ninive bakotelema, elongo na bato ya ekeke oyo, mpe bakokatela bango etumbu, pamba te babongolaki mitema na bango tango bayokaki mateya ya Yona ; nzokande awa sik’oyo, ezali na Moto oyo aleki Yona.\wj* \s1 Mwinda ya nzoto \r (Mat 5.15; Mlk 4.21) \pi1 \v 33 \wj Moto moko te apelisaka mwinda mpo na kotia yango na esika ya kobombama to na se ya katini. Nzokande, batiaka yango na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete bato oyo bazali kokota na ndako bamona pole.\wj* \r (Mat 6.22-23) \pi1 \v 34 \wj Miso na yo ezali lokola mwinda ya nzoto na yo. Soki miso na yo ezali malamu, nzoto na yo mobimba mpe ezali kati na pole. Kasi soki ebeli, nzoto na yo mobimba mpe ekoti kati na molili.\wj* \v 35 \wj Yango wana, sala keba ete pole oyo ezali kati na yo ekoma molili te.\wj* \v 36 \wj Soki nzoto na yo mobimba ezali kati na pole, mpe eteni ata moko te ezali kati na molili, nzoto na yo mobimba ekotonda na pole lokola tango mwinda engengisaka yo na nzela ya pole na yango.\wj* \s1 Yesu atelemeli Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko \r (Mat 23.4-36) \p \v 37 Tango Yesu asilisaki koloba, Mofarizeo moko abengisaki Ye mpo ete akende kolia elongo na ye. Yesu akotaki na ndako na ye mpe avandaki na mesa. \v 38 Kasi Mofarizeo akamwaki mingi tango amonaki ete Yesu asukoli maboko te liboso ya kolia. \p \v 39 Bongo, Nkolo alobaki na ye : \pi1 \wj — Bino Bafarizeo, bosukolaka libanda ya bakopo mpe ya basani, kasi botondi na moyibi mpe na mabe.\wj* \v 40 \wj Bazoba ! Boni, ye oyo asalaki libanda, asalaki mpe kati te ?\wj* \v 41 \wj Bobonza nde bomoto na bino ya kati lokola likabo epai ya Nzambe, bongo mobimba na bino ekokoma mbala moko peto.\wj* \pi1 \v 42 \wj Mawa na bino, Bafarizeo ! Bofutaka eteni ya zomi ya bandembi, ya matungulu mpe ya bandunda ya lolenge nyonso, kasi bomonaka pamba bosembo mpe bolingo ya Nzambe. Nzokande bosengeli nde kotia yango na misala, mpe kozwa na motuya likambo oyo wana ya kofuta eteni ya zomi.\wj* \pi1 \v 43 \wj Mawa na bino, Bafarizeo ! Bolingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe bolingaka ete bato bapesa bino mbote ya lokumu, na bisika oyo bato ebele bakutanaka.\wj* \v 44 \wj Mawa na bino ! Bozali lokola bakunda oyo ezanga bilembo, bongo bato batambolaka na likolo na yango na kozanga koyeba !\wj* \p \v 45 Molakisi moko ya mibeko alobaki na Yesu : \pi1 — Moteyi, tango ozali koloba bongo, ozali kofinga mpe biso ! \p \v 46 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Bino mpe balakisi ya Mobeko, mawa na bino ! Bomemisaka bato mikumba ya kilo makasi, mpe bino moko boningisaka ata mosapi moko te mpo na kosunga bango.\wj* \pi1 \v 47 \wj Mawa na bino, pamba te botongaka bakunda mpo na basakoli oyo bakoko na bino baboma !\wj* \v 48 \wj Boye, wana bosalaka bongo, botatolaka ete bondimi makambo oyo bakoko na bino basala ; pamba te bango, baboma basakoli, mpe bino, bozali kotonga bakunda na bango.\wj* \pi1 \v 49 \wj Yango wana, Nzambe, kati na bwanya na Ye, aloba : « Nakotindela bango basakoli mpe bantoma ; bakoboma bamoko, mpe bakonyokola bamosusu. »\wj* \v 50 \wj Mpo na yango, makila ya basakoli nyonso, oyo basopa wuta na ebandeli ya mokili, ekotangama na mito ya bato ya ekeke oyo,\wj* \v 51 \wj kobanda na makila ya Abele kino na makila ya Zakari oyo babomaki kati na etumbelo mpe Esika ya bule. Nazali koloba na bino penza ya solo : mokumba ya mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.\wj* \pi1 \v 52 \wj Mawa na bino, balakisi ya Mobeko, pamba te bolongolaki fungola ya boyebi ! Bino moko bokotaki te, mpe bopekisaki bato oyo bazalaki na posa ya kokota.\wj* \p \v 53 Tango Yesu abimaki na ndako, Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko basilikelaki Ye makasi mpe bakomaki kotungisa Ye na nzela ya mituna ya ndenge na ndenge, \v 54 na kotiela Ye mitambo mpo na kozwa, kati na maloba na Ye, likambo ya kofunda Ye. \c 12 \s1 Kotatola mpo na Yesu \r (Mat 10.26-33; 10.19-20) \p \v 1 Na tango yango, lokola bankoto ebele ya bato basanganaki, kino bakomaki konyatana bango na bango, Yesu abandaki na koyebisa bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Bosala keba na levire ya Bafarizeo, oyo ezali lokuta !\wj* \v 2 \wj Eloko moko te ebombama ekozanga komonisama, mpe eloko moko te ya sekele ekozanga koyebana.\wj* \v 3 \wj Nyonso oyo bokoloba kati na molili ekoyokana kati na pole ya mokolo, mpe nyonso oyo bokolobana na matoyi kati na bashambre ekosakolama wuta na likolo ya bandako.\wj* \pi1 \v 4 \wj Balingami na Ngai, nazali koloba na bino : bobanga te bato oyo bakoki koboma nzoto mpe, na sima, bakoki kosala likambo mosusu te.\wj* \v 5 \wj Nakolakisa bino nani oyo bosengeli kobanga : bobanga Ye oyo, sima na kufa, azali na bokonzi ya kobwaka kati na lifelo. Solo, nazali koloba na bino : Ye nde bosengeli kobanga.\wj* \pi1 \v 6 \wj Boni, batekaka te bandeke mike mitano na motuya ya mbongo ya bibende mibale ? Nzokande, Nzambe abosanaka ata ndeke moko te kati na yango.\wj* \v 7 \wj Ayebi kutu ata motango ya suki na bino. Bobanga te ; boleki bandeke mike ebele na motuya.\wj* \pi1 \v 8 \wj Nazali koloba na bino : moto nyonso oyo, na miso ya bato, akotatola ete azali moto na Ngai, Mwana na Moto mpe akotatola liboso ya ba-anjelu ya Nzambe ete azali moto na Ye ;\wj* \v 9 \wj kasi ye oyo akowangana Ngai na miso ya bato, Ngai mpe nakowangana ye liboso ya ba-anjelu ya Nzambe.\wj* \v 10 \wj Moto nyonso oyo akoloba mabe na tina na Mwana na Moto akolimbisama, kasi ye oyo akofinga Molimo Mosantu akolimbisama te.\wj* \pi1 \v 11 \wj Tango bakokumba bino kati na bandako ya mayangani, liboso ya bakambi mpe bakonzi, bomitungisa te na koluka koyeba ndenge nini bokosamba mpe maloba nini bokoloba ;\wj* \v 12 \wj pamba te Molimo Mosantu akolakisa bino, na tango yango, makambo oyo bosengeli koloba.\wj* \s1 Lisese ya mozwi oyo azangi mayele \p \v 13 Moto moko kati na ebele ya bato alobaki na Yesu : \pi1 — Moteyi, loba na ndeko na ngai ete akabola na ngai libula oyo tata atikelaki biso. \p \v 14 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Molingami na Ngai, nani atie Ngai Mosambisi to Mokati makambo na bino ya libula ?\wj* \p \v 15 Bongo alobaki na bato nyonso : \pi1 \wj — Bosala keba ! Bomibatela malamu ete bokweya te na lokoso ya konduka bomengo ; pamba te, ezala kati na bofuluki, ezali bomengo te nde esalaka bomoi ya moto.\wj* \p \v 16 Mpe alobaki na bango lisese oyo : \pi1 \wj — Bilanga ya mozwi moko ebotaki bambuma ebele penza.\wj* \v 17 \wj Akomaki kokanisa mpe komituna : « Nasala nini ? Nazali lisusu na esika te mpo na kobomba bambuma na ngai ya bilanga. »\wj* \pi1 \v 18 \wj Bongo amilobelaki lisusu : « Nakosala boye : nakobuka bibombelo na ngai mpo na kotonga bibombelo oyo eleki minene, nakobomba kuna ble na ngai nyonso mpe biloko na ngai mosusu.\wj* \v 19 \wj Sima na yango, nakomilobela : ‹ Oh bomoi na ngai, otondi na biloko oyo ebombami mpo na mibu ebele ; pema na yo, lia, mela mpe sepela ! › »\wj* \pi1 \v 20 \wj Kasi Nzambe alobaki na ye : « Zoba ! Na butu ya lelo kaka, okokufa. Bongo nani akokoma nkolo biloko nyonso oyo ondukaki mpo na yo moko ? »\wj* \pi1 \v 21 \wj Ekozala bongo mpo na moto nyonso oyo andukaka bomengo mpo na ye moko, kasi alukaka te kozala mozwi na miso ya Nzambe.\wj* \r (Mat 6.25-34) \p \v 22 Bongo Yesu alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Yango wana, nazali koloba na bino : bomitungisaka te na tina na bomoi na bino, na komituna : tokolia nini ? To na tina na banzoto na bino, na komituna : Tokolata nini ?\wj* \v 23 \wj Pamba te bomoi eleki bilei na tina, mpe nzoto eleki bilamba na tina.\wj* \pi1 \v 24 \wj Botala bayanganga : elonaka nkona te, ebukaka bambuma te, ezali te na ebombelo bambuma to na ebombelo bilei ; kasi Nzambe aleisaka yango. Nzokande bino, boleki bandeke na motuya.\wj* \v 25 \wj Nani kati na bino, na nzela ya mitungisi na ye, akoki kobakisa ata ngonga moko na molayi ya bomoi na ye ?\wj* \v 26 \wj Soki bokoki kosala te makambo oyo ya mike-mike, bongo mpo na nini komitungisa na tina na makambo mosusu ?\wj* \v 27 \wj Botala ndenge bafololo ya lisi ekolaka ! Esalaka te, etongaka bilamba te ; nzokande, nazali koloba na bino, ezala ye moko mokonzi Salomo, kati na nkembo na ye nyonso, atikalaki kolata te lokola moko kati na yango.\wj* \pi1 \v 28 \wj Soki Nzambe alatisaka bongo matiti oyo, lelo, ezali kati na bilanga, mpe, lobi, ekobwakama na moto, akozanga te kolatisa bino, bato ya kondima moke ?\wj* \pi1 \v 29 \wj Bomitungisaka te na tina na biloko ya kolia to ya komela, bolongola yango na makanisi na bino.\wj* \v 30 \wj Pamba te ezali bapagano ya mokili oyo nde balukaka-lukaka biloko wana nyonso. Tata na bino ayebi malamu ete bozali na bosenga na yango.\wj* \v 31 \wj Bolukaka nde liboso Bokonzi ya Nzambe, bongo bakobakisela bino biloko wana nyonso.\wj* \pi1 \v 32 \wj Oh etonga moke, bobanga te ! Pamba te Tata na bino asepelaki kopesa bino Bokonzi !\wj* \r (Mat 6.19-21) \pi1 \v 33 \wj Boteka biloko na bino mpe bokaba epai ya babola mbongo oyo bokozwa. Bosala mpo na bolamu na bino mabenga oyo etobokaka te ; bonduka bomengo kati na Likolo epai wapi ekoki kobeba te, moyibi akoki kopusana te mpe nselele ekoki kobebisa te ;\wj* \v 34 \wj pamba te epai bomengo na bino ezali, kuna mpe motema na bino ekozala.\wj* \s1 Komibongisa mpo na koya ya Nkolo \r (Mat 24.45-51) \pi1 \v 35 \wj Bomilengela mpo na mosala mpe bobatela minda na bino ya kopela.\wj* \v 36 \wj Bozala lokola bato oyo bazali kozela bozongi ya nkolo na bango wuta na feti ya libala, mpo ete bafungolela ye ekuke tango kaka akoya mpe akobeta ekuke.\wj* \v 37 \wj Esengo na basali oyo nkolo, tango akoya, akokuta bazali kosenzela ! Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo mpe akolata elamba na ye ya mosala, akovandisa bango na mesa, mpe akoya kopesa bango bilei.\wj* \v 38 \wj Ekozala penza esengo mpo na basali oyo nkolo akokuta bazali kosenzela, ezala ayei na ngonga ya midi ya butu to liboso ete tongo etana.\wj* \r (Mat 24.43-51) \pi1 \v 39 \wj Kasi bososola malamu likambo oyo : soki nkolo ndako ayebaki ngonga oyo moyibi akoya, alingaki kopekisa ye kokota kati na ndako na ye.\wj* \v 40 \wj Bino mpe bomilengela, pamba te Mwana na Moto akoya na ngonga oyo bozali kokanisa kutu te kozela Ye.\wj* \p \v 41 Petelo atunaki Yesu : \pi1 — Nkolo, ozali koloba lisese oyo mpo na biso to mpo na bato nyonso ? \p \v 42 Nkolo azongisaki : \pi1 \wj — Nani mobateli bomengo ya sembo mpe ya mayele epai ya nani nkolo akopesa mokumba ya kokamba basali na ye mpo na kopesaka bango bilei na bango na tango oyo ekoki ?\wj* \v 43 \wj Esengo na mosali oyo nkolo na ye, tango akozonga, akokuta azali kosala bongo !\wj* \v 44 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : nkolo na ye akopesa ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso.\wj* \pi1 \v 45 \wj Kasi soki mosali yango amilobeli : « Nkolo na ngai awumeli mpo na kozonga, » mpe akomi kobeta basali mpe basi basali ; kolia, komela masanga mpe kolangwa,\wj* \v 46 \wj nkolo ya mosali yango akozonga na mokolo oyo ye, mosali, azali kozela ye te, mpe na ngonga oyo ayebi te. Boye akokata-kata ye na biteni mpe akotia ye esika moko na basali oyo bazangi bosembo.\wj* \pi1 \v 47 \wj Mosali oyo ayebi posa ya nkolo na ye, kasi amilengeli te to asali te kolanda posa ya nkolo na ye, akobetama fimbu ebele.\wj* \v 48 \wj Kasi mosali oyo ayebi te posa ya nkolo na ye mpe asali makambo oyo ebongi na etumbu, akobetama fimbu moke. Na moto oyo bapesi mingi, bakosenga ye mpe mingi ; mpe bakotuna na moto na moto kolanda mokumba oyo bapesi ye : na moto oyo bapesi mingi, bakotuna ye mpe mingi ; mpe na moto oyo bapesi moke, bakotuna ye moke.\wj* \s1 Bokabwani mpe etumbu \pi1 \v 49 \wj Nayei kotia moto na mokili, nazali na posa makasi ete moto yango emipelela.\wj* \v 50 \wj Kasi ezali na libatisi moko oyo nasengeli kozwa, mpe tala ndenge nini nakomi motema moto-moto mpo na kozela kokokisama na yango !\wj* \r (Mat 10.34-36) \pi1 \v 51 \wj Boni, bokanisi ete nayaki mpo na komema kimia na mokili ? Kimia te, bokabwani nde.\wj* \v 52 \wj Pamba te, kobanda sik’oyo, bato mitano kati na libota moko bakokabwana : misato bakoyina mibale, mpe mibale bakoyina misato.\wj* \v 53 \wj Tata akoyina mwana na ye ya mobali, mpe mwana mobali akoyina tata na ye ; mama akoyina mwana na ye ya mwasi, mpe mwana mwasi akoyina mama na ye ; mama-bokilo akoyina mwasi ya mwana na ye ya mobali, mpe mwasi ya mwana mobali akoyina mama-bokilo na ye.\wj* \r (Mat 16.2-3) \p \v 54 Bongo alobaki lisusu na ebele ya bato : \pi1 \wj — Tango bomonaka mapata kobima na weste, bolobaka mbala moko : « Mvula elingi konoka, » mpe ekokisamaka bongo.\wj* \v 55 \wj Tango mopepe ya sude efulaka, bolobaka : « Molunge ekozala makasi penza, » mpe esalemaka bongo.\wj* \pi1 \v 56 \wj Bato ya bilongi mibale ! Boyebi malamu kolimbola bilembo oyo bomonaka na mokili mpe na likolo, bongo mpo na nini bozali koyeba te kososola tango oyo ?\wj* \r (Mat 5.25-26) \pi1 \v 57 \wj Mpo na nini bososolaka te, mpo na bino moko, makambo oyo ezali sembo ?\wj* \v 58 \wj Soki ozali kokende na esambiselo elongo na moto oyo afundi yo, sala nyonso mpo ete oyokana na ye, wana bozali nanu na nzela. Soki te, akokumba yo epai ya mosambisi, mosambisi akokaba yo na maboko ya bakengeli, mpe bakengeli bakobwaka yo kati na boloko.\wj* \v 59 \wj Nazali koloba na yo : okobima na boloko soki kaka ofuti niongo na yo kino na mbongo ya suka ya bibende.\wj* \c 13 \s1 Tina ya kobongola motema \p \v 1 Na tango wana, ndambo ya bato bayaki koyebisa Yesu ndenge nini Pilato abomaki bato ya Galile na ngonga oyo bazalaki kobonzela Nzambe bambeka. \p \v 2 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bokanisi ete bato wana ya Galile bakufaki kufa ya somo mpo ete bazalaki bato minene ya masumu koleka bato nyonso mosusu ya Galile ?\wj* \v 3 \wj Nazali koloba na bino : Ezali bongo te ! Kasi soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso.\wj* \pi1 \v 4 \wj Bongo bato wana zomi na mwambe oyo bakufaki tango ndako molayi ya Siloe ekweyelaki bango, bokanisi ete bazalaki bato ya masumu koleka bavandi nyonso ya Yelusalemi ?\wj* \v 5 \wj Nazali koloba na bino : Ezali bongo te ! Soki bobongoli mitema te, bino mpe bokokufa bino nyonso.\wj* \p \v 6 Bongo alobaki lisese oyo : \pi1 \wj — Moto moko azalaki na nzete na ye ya figi kati na elanga na ye ya vino ; akendeki koluka bambuma na likolo ya nzete yango, kasi akutaki ata mbuma moko te.\wj* \v 7 \wj Boye alobaki na mobateli elanga yango : « Tala, tokomi na mobu ya misato wuta nayaka koluka bambuma na likolo ya nzete oyo ya figi, mpe nazwi ata mbuma moko te. Kata yango ! Mpo na nini ekanga mabele pamba ? »\wj* \pi1 \v 8 \wj Mobateli elanga azongiselaki ye : « Nkolo na ngai, tika yango lisusu mobu oyo ! Nakotimola mabele pembeni na yango mpe nakotia matiti ya kopola ;\wj* \v 9 \wj tango mosusu ekobota mbuma na mobu oyo ezali koya. Soki eboti te, wana kata na yo yango. »\wj* \s1 Yesu abikisi na mokolo ya Saba \p \v 10 Mokolo moko ya Saba, Yesu azalaki koteya kati na ndako ya mayangani. \v 11 Nzokande, ezalaki wana na mwasi moko oyo molimo mabe egumba ye mokongo, mpe azalaki kokoka te komisembola wuta mibu zomi na mwambe. \v 12 Tango Yesu amonaki ye, abengaki ye wuta na liboso mpe alobaki na ye : \pi1 \wj — Mwasi, okangolami na pasi na yo !\wj* \p \v 13 Mpe Yesu atielaki ye maboko. Mbala moko, mwasi yango amisembolaki mpe akomaki kokumisa Nzambe. \p \v 14 Kasi mokambi ya ndako ya mayangani asilikaki mpo ete Yesu abikisi moto na mokolo ya Saba, mpe alobaki na ebele ya bato : \pi1 \wj — Ezali na mikolo motoba mpo na kosala mosala ! Ezali na mikolo yango nde bosengeli koya mpo ete babikisa bino, kasi na mokolo ya Saba te !\wj* \p \v 15 Nkolo azongiselaki ye : \pi1 \wj — Bato ya bilongi mibale ! Nani kati na bino, na mokolo ya Saba, afungolaka te mpe amemaka te ngombe na ye to ane na ye, wuta na elielo, mpo ete ekende komela mayi ?\wj* \v 16 \wj Mwasi oyo azali mokitani ya Abrayami ! Nzokande Satana asila kokanga ye minyololo mibu zomi na mwambe ! Boni, esengelaki te kokangola ye, na oyo ekanga ye, kaka mpo ete ezali mokolo ya Saba ?\wj* \p \v 17 Tango alobaki bongo, bayini na Ye nyonso batondaki na soni ; kasi ebele ya bato bazalaki kosepela na bikamwa nyonso oyo azalaki kosala. \s1 Mbuma ya mutarde mpe levire \r (Mat 13.31-33; Mlk 4.30-32) \p \v 18 Bongo Yesu atunaki : \pi1 \wj — Bokonzi ya Nzambe ekokani na nini ? Nakokanisa yango na nini ?\wj* \v 19 \wj Bokonzi ya Nzambe ekokani na nkona ya mutarde oyo moto moko azwaki mpe alonaki kati na elanga na ye, ebimisaki moto mpe ekomaki nzete monene, bongo bandeke ya likolo eyaki kovanda na bitape na yango.\wj* \r (Mat 13.33) \p \v 20 Yesu atunaki lisusu : \pi1 \wj — Nakokokanisa Bokonzi ya Nzambe na nini ?\wj* \v 21 \wj Ekokani na levire oyo mwasi azwaki mpe asangisaki kati na bakilo pene tuku mibale na sambo ya farine, kino nyonso evimbaki.\wj* \s1 Kokota na ekuke ya moke \p \v 22 Yesu azalaki koleka na bingumba mpe na bamboka, azalaki koteya wana azalaki kokende na Yelusalemi. \r (Mat 7.13-14) \p \v 23 Moto moko atunaki Ye : \pi1 — Nkolo, bato moke kaka nde bakobika ? \p Yesu alobaki na bango : \pi1 \v 24 \wj — Bosala makasi mpo na kokotela na ekuke ya moke ; pamba te, nazali koloba na bino, bato mingi bakoluka kokota, kasi bakokoka te.\wj* \r (Mat 25.10-12) \pi1 \v 25 \wj Tango Nkolo ndako akotelema mpe akokanga ekuke, bokotikala libanda, bokobanda kobeta ekuke mpe kobondela : « Nkolo, Nkolo, fungolela biso ! »\wj* \pi1 \wj Kasi Ye akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! »\wj* \r (Mat 7.22-23) \pi1 \v 26 \wj Bongo bokoloba : « Toliaki mpe tomelaki mesa moko elongo na Yo, mpe oteyaki na babalabala na biso ! »\wj* \pi1 \v 27 \wj Kasi akozongisela bino : « Nayebi bino te, nayebi mpe esika bowuti te ! Bolongwa liboso na Ngai, bino nyonso, bato mabe ! »\wj* \pi1 \v 28 \wj Kolela mpe koswa minu ekozala kuna, tango bokomona Abrayami, Izaki, Jakobi mpe basakoli nyonso kati na Bokonzi ya Nzambe ; kasi bino, bokobwakama libanda.\wj* \v 29 \wj Bato bakowuta na Este mpe na Weste, na Nor mpe na Sude, mpe bakovanda na mesa kati na Bokonzi ya Nzambe.\wj* \pi1 \v 30 \wj Boye, kati na bato oyo bazali sik’oyo bato ya liboso, ebele bakokoma bato ya suka ; mpe kati na ba-oyo bazali sik’oyo bato ya suka, ebele bakokoma bato ya liboso.\wj* \s1 Yesu akobi mobembo na Ye na Yelusalemi \p \v 31 Kaka na tango yango, ndambo ya Bafarizeo bayaki epai ya Yesu mpe balobaki na Ye : \pi1 — Longwa awa, kende na yo esika mosusu, pamba te Erode akani koboma Yo ! \p \v 32 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bokende koloba na mbwa wana ya zamba : « Nakokoba kobengana milimo mabe mpe kobikisa babeli, lelo mpe lobi ; mpe na mokolo ya misato, nakosilisa mosala na Ngai. »\wj* \v 33 \wj Kasi nasengeli kokoba mobembo na Ngai, lelo, lobi mpe lobi oyo ekolanda ; pamba te mosakoli moko te akokufa libanda ya Yelusalemi !\wj* \r (Mat 23.37-39) \pi1 \v 34 \wj Yelusalemi, Yelusalemi, yo oyo obomaka basakoli mpe obambaka bato oyo Nzambe atindelaka yo mabanga, mbala boni nalingaki kosangisa bana na yo, ndenge soso ya mwasi esangisaka bana na yango na se ya mapapu, kasi boboyaki.\wj* \v 35 \wj Sik’oyo, ndako na bino ezali kosundolama. Solo, nazali koloba na bino : Bokotikala komona Ngai lisusu te kino bokoloba : « Tika ete apambolama, Ye oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! »\wj* \c 14 \s1 Yesu abikisi lisusu na mokolo ya Saba \p \v 1 Mokolo moko ya Saba, Yesu akendeki kolia kati na ndako ya moko kati na bakambi ya Bafarizeo, mpe Bafarizeo bazalaki kotala Ye malamu. \v 2 Liboso na Ye, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobela bokono ya kovimba nzoto. \v 3 Yesu atunaki Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko : \pi1 \wj — Boni, mobeko na biso epesaka nzela ya kobikisa moto na mokolo ya Saba to te ?\wj* \p \v 4 Kasi bavandaki kimia. \p Yesu asimbaki mobeli yango, abikisaki ye na bokono na ye mpe azongisaki ye. \v 5 Bongo atunaki bango : \pi1 \wj — Soki moko kati na bino azali na mwana to ngombe ; bongo, na mokolo ya Saba, akweyi to ekweyi kati na libulu, boni, bokobimisa te na lombangu mwana yango to ngombe yango ?\wj* \p \v 6 Bakokaki te kopesa Ye eyano. \p \v 7 Tango Yesu amonaki ndenge nini bato oyo babengamaki na feti bazalaki kopona bisika ya lokumu, alobaki na bango lisese oyo : \v 8 \wj « Soki moto abengisi yo na feti ya libala, kokende komivandisa te na esika ya lokumu, pamba te, kati na bato oyo babengami na feti yango, ekoki kozala na moto oyo aleki yo na lokumu.\wj* \v 9 \wj Soki esalemi bongo, moto oyo abengisi bino mibale akoya koloba na yo : ‹ Tikela moto oyo kiti na yo ! › Bongo, na soni nyonso, okokende kozwa esika ya suka.\wj* \v 10 \wj Kasi soki babengisi yo na feti, kende na yo kovanda na esika ya suka, mpo ete, tango moto oyo abengisi yo akoya, aloba na yo : ‹ Molingami na ngai, yaka kovanda na esika oyo eleki malamu ! › Boye, okopesamela lokumu na miso ya bato nyonso oyo babengami na feti.\wj* \pi1 \v 11 \wj Solo, moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe moto oyo amikitisaka, bakotombola ye. »\wj* \p \v 12 Bongo Yesu alobaki na moto oyo abengisaki Ye : \pi1 \wj — Soki osali feti mpo ete bato baya kolia, kobengisa te balingami na yo, bandeko na yo, baboti na yo to bazwi oyo bazalaka pene na yo ; noki te bango mpe bakobengisa yo mpo na kozongisela yo, na nzela wana, bolamu oyo osalaki mpo na bango.\wj* \v 13 \wj Kasi Soki osali feti, bengisa babola, bakufi miso, bakakatani mpe ba-ebosono ;\wj* \v 14 \wj mpe Nzambe akopambola yo. Atako bakoki te kozongisela yo bolamu oyo osali mpo na bango, kasi Nzambe akofuta niongo na mokolo oyo bato ya sembo bakosekwa.\wj* \s1 Lisese ya feti \r (Mat 22.1-14) \p \v 15 Tango moko kati na babengami ayokaki bongo, alobaki na Yesu : \pi1 — Esengo na moto oyo akolia na feti kati na Bokonzi ya Nzambe ! \p \v 16 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Moto moko asalaki feti monene mpe abengisaki bato ebele.\wj* \v 17 \wj Tango ngonga ya kolia ekokaki, atindaki mosali na ye kokende koloba na bato oyo babengamaki : « Boya, pamba te nyonso esili kobongisama sik’oyo. »\wj* \pi1 \v 18 \wj Kasi bango nyonso bakomaki kosenga bolimbisi ndenge moko.\wj* \pi1 \wj Moto ya liboso alobaki : « Nawuti kosomba elanga, nasengeli kokende kotala yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! »\wj* \pi1 \v 19 \wj Moto ya mibale alobaki : « Nawuti kosomba bangombe zomi, nasengeli komeka yango ; nabondeli yo, limbisa ngai ! »\wj* \pi1 \v 20 \wj Moto mosusu alobaki : « Nawuti kobala mwasi ; nakoki koya te. »\wj* \pi1 \v 21 \wj Mosali azongaki mpe ayebisaki makambo nyonso epai ya nkolo na ye. Nkolo ndako asilikaki makasi mpe atindaki mosali na ye : « Kende noki na banzela, na babalabala ya engumba, mpe memela ngai babola, ba-ebosono, bakakatani mpe bakufi miso. »\wj* \pi1 \v 22 \wj Sima na mwa tango, mosali ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, nasali ndenge otindaki ngai ; kasi bisika ezali nanu. »\wj* \pi1 \v 23 \wj Nkolo alobaki na mosali na ye : « Kende lisusu na banzela mpe na babalabala ya engumba, tinda bango na makasi mpo ete bakota, mpe ndako na ngai etonda na bato.\wj* \v 24 \wj Pamba te, nazali koloba na yo : moko te kati na bato oyo babengamaki akolia biloko ya feti na ngai. »\wj* \s1 Ndenge nini kozala moyekoli ya Yesu \r (Mat 10.37-38) \p \v 25 Ebele ya bato bazalaki kokende elongo na Yesu. Yesu abalukaki mpo na kotala bango mpe alobaki : \pi1 \v 26 \wj — Soki moto ayei epai na Ngai, kasi alingi Ngai te koleka tata na ye, mama na ye, mwasi na ye, bana na ye, bandeko na ye ya mibali, bandeko na ye ya basi, mpe ezala ata bomoi na ye moko, moto ya ndenge wana akoki te kozala moyekoli na Ngai.\wj* \v 27 \wj Mpe moto nyonso oyo amemaka ekulusu na ye te mpe alandaka Ngai te akoki te kozala moyekoli na Ngai.\wj* \v 28 \wj Soki moko kati na bino alingi kotonga ndako molayi, boni, bokovanda nanu te mpe bokoluka nanu te koyeba motuya mpo na kotala soki bozali na mbongo ya kokoka mpo na kosilisa misala ya kotonga ndako yango ?\wj* \v 29 \wj Pamba te, soki sima na bino kotia moboko, bokoki lisusu te kosilisa kotonga ndako yango, bato nyonso oyo bakobanda komona yango bakobanda koseka bino mpe koloba :\wj* \v 30 \wj « Botala moto oyo ! Abandaki mosala ya kotonga ndako, kasi azangaki makoki ya kosilisa yango. »\wj* \pi1 \v 31 \wj Ndenge moko, soki mokonzi moko alingi kokende kobundisa mokonzi mosusu, boni, akovanda nanu te mpe akotala nanu te soki, elongo na basoda na ye nkoto zomi, akoki kobundisa mokonzi oyo, elongo na basoda nkoto tuku mibale, azali koya kobundisa ye ?\wj* \v 32 \wj Soki amoni ete akokoka te, wana monguna na ye azali nanu mosika, akotindela ye bato mpo na kosenga kimia.\wj* \pi1 \v 33 \wj Boye, kati na bino, moto nyonso oyo akoki kokabwana te na biloko na ye nyonso akoki te kozala moyekoli na Ngai.\wj* \r (Mat 5.13; Mlk 9.50) \pi1 \v 34 \wj Mungwa ezali malamu ; kasi soki mungwa ebungisi elengi na yango, ndenge nini bakozongisa lisusu elengi na yango ?\wj* \v 35 \wj Ekozala lisusu na tina moko te, ezala mpo na mabele to mpo na kobongisa bilanga ; kasi bakobwaka yango. Tika ete moto oyo azali na matoyi mpo na koyoka ayoka !\wj* \c 15 \s1 Lisese ya meme oyo ebungaki mpe emonani \r (Mat 18.12-14) \p \v 1 Bafutisi mpako mpe bato ya masumu bapusanaki bango nyonso pene ya Yesu mpo na koyoka Ye. \v 2 Kasi Bafarizeo mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koyimayima mpe koloba : \pi1 — Moto oyo azali koyamba bato ya masumu mpe kolia mesa moko elongo na bango. \p \v 3 Bongo Yesu alobaki na bango lisese oyo : \pi1 \v 4 \wj — Soki moko kati na bino azali na bameme nkama moko, bongo moko kati na yango ebungi ; boni, akotika te bameme tuku libwa na libwa kati na esobe mpo na kokende koluka moko oyo ewuti kobunga kino amona yango ?\wj* \pi1 \v 5 \wj Mpe tango akomona yango, akotia yango na mapeka na ye, na esengo.\wj* \v 6 \wj Bongo, tango kaka akokoma na ndako na ye, akobengisa balingami mpe baninga na ye, akoloba na bango : « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni meme na ngai, oyo ebungaki ! »\wj* \pi1 \v 7 \wj Na nzela yango, nazali koloba na bino : esengo oyo ekozala kati na Likolo mpo na mosumuki moko kaka oyo abongoli motema, eleki esengo mpo na bato ya sembo tuku libwa na libwa oyo bazali na posa te ya kobongola mitema.\wj* \s1 Lisese ya mbongo oyo ebungaki mpe emonani \pi1 \v 8 \wj Soki mwasi azali na mbongo ya bibende zomi mpe abungisi moko kati na yango, boni, apelisaka mwinda te, akombaka ndako te mpo na koluka yango malamu kino amona yango ?\wj* \v 9 \wj Bongo soki amoni yango, abengisaka balingami na ye elongo na baninga na ye, mpe alobaka na bango : « Bosepela na ngai elongo, pamba te namoni mbongo na ngai, oyo ebungaki ! »\wj* \v 10 \wj Na nzela yango, nazali koloba na bino : ba-anjelu ya Nzambe basepelaka mpo na mosumuki moko oyo abongoli motema.\wj* \s1 Lisese ya mwana oyo abungaki mpe amonani \p \v 11 Yesu alobaki lisusu : \pi1 \wj — Mobali moko azalaki na bana mibali mibale.\wj* \v 12 \wj Leki alobaki na tata na ye : « Tata, pesa ngai eteni na ngai ya libula. »\wj* \pi1 \wj Mpe tata akabolelaki bango biloko na ye.\wj* \pi1 \v 13 \wj Sima na mwa mikolo, leki azwaki biloko nyonso oyo azalaki na yango, akendeki na mboka moko ya mosika. Kuna, asakanaki na bozwi na ye, abikaki bomoi ya mobulu.\wj* \v 14 \wj Sima na ye kosakana na bozwi na ye nyonso, nzala makasi ekotaki kati na mboka yango mobimba, mpe akomaki kokelela.\wj* \pi1 \v 15 \wj Boye akendeki komikomisa lokola mosali epai ya moto moko ya mboka yango. Moto yango atindaki ye na bilanga na ye mpo na koleisa bangulu.\wj* \v 16 \wj Mwana alukaki ata kolia bilei ya bangulu, kasi moto ata moko te apesaki ye yango.\wj* \pi1 \v 17 \wj Bongo akomaki kokanisa na tina na bomoi na ye, alobaki : « Basali boni tata na ngai azwa na mosala mpe bazali kolia ndenge balingi, mpe biloko ya kolia eleki kutu ebele ; kasi ngai nazali kokufa awa na nzala !\wj* \v 18 \wj Nazwi mokano ya kobima mpe kozonga epai ya tata na ngai ; nakoloba na ye : ‹ Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo.\wj* \v 19 \wj Nabongi lisusu te kobengama mwana na yo ; zwa ngai lokola moko kati na basali na yo ! › »\wj* \pi1 \v 20 \wj Boye, abimaki mpe azongaki epai ya tata na ye. Wana azalaki nanu mosika, tata na ye amonaki ye, ayokelaki ye mawa mingi ; apotaki mbangu mpo na kokutana na mwana na ye, amibwakaki na nzoto na ye mpe ayambaki ye.\wj* \pi1 \v 21 \wj Mwana alobaki na tata na ye : « Tata, nasali masumu liboso ya Nzambe mpe liboso na yo, nabongi lisusu te kobengama mwana na yo. »\wj* \pi1 \v 22 \wj Kasi tata alobaki na basali na ye : « Bomema na lombangu nzambala oyo eleki kitoko mpe bolatisa ye yango ; bolatisa ye lopete, na mosapi, mpe basandale, na makolo na ye.\wj* \v 23 \wj Boya na mwana ngombe ya mafuta mpe boboma yango ; tolia mpe tosala feti,\wj* \v 24 \wj pamba te mwana na ngai, oyo bozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »\wj* \pi1 \wj Boye babandaki feti na esengo makasi.\wj* \pi1 \v 25 \wj Na tango yango, kulutu na ye azalaki nanu kati na bilanga. Tango akomaki pene ya ndako, ayokaki miziki mpe makelele ya mabina.\wj* \v 26 \wj Boye abengaki moko kati na basali mpe atunaki ye makambo oyo ezali koleka.\wj* \v 27 \wj Mosali azongisaki : « Ndeko na yo azongi ! Tata na yo abomi mwana ngombe ya mafuta, pamba te amoni ye nzoto malamu mpe nzoto kolongono. »\wj* \pi1 \v 28 \wj Kulutu asilikaki makasi mpe aboyaki kokota. Boye tata na ye abimaki mpe abondelaki ye.\wj* \v 29 \wj Kasi azongiselaki tata na ye : « Tala ! Mibu nyonso oyo nazalaki kosalela yo lokola mowumbu, natikalaki koboya te kotosa mitindo na yo. Nzokande, otikala nanu kopesa ngai te ata mwana ntaba mpo ete nasepela elongo na balingami na ngai.\wj* \v 30 \wj Kasi tango mwana na yo, oyo ya mobali azongi na ndako, ye oyo asili kosakana na biloko na yo, na mobulu elongo na basi ya ndumba, obomi mwana ngombe ya mafuta mpo na ye ! »\wj* \pi1 \v 31 \wj Tata azongiselaki ye : « Mwana na ngai, ozalaka elongo na ngai tango nyonso, mpe biloko na ngai nyonso ezali ya yo.\wj* \v 32 \wj Kasi tosengelaki kaka kosala feti mpe kosepela, pamba te ndeko na yo, oyo ozali komona, akufaki, kasi azongi lisusu na bomoi ; abungaki, kasi amonani ! »\wj* \c 16 \s1 Nzambe mpe mbongo \p \v 1 Yesu alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Mozwi moko azalaki na mobateli bomengo ; bongo bafundaki ye epai ya mozwi ete azali kosakana na biloko na ye.\wj* \v 2 \wj Mozwi abengaki ye mpo na kotuna ye : « Makambo nini nazali koyoka na tina na yo ? Yebisa ngai ndenge nini obateli bomengo na ngai ; pamba te, kobanda lelo, okozala lisusu mobateli bomengo na ngai te. »\wj* \pi1 \v 3 \wj Mobateli bomengo amilobelaki : « Nasala nini sik’oyo ? Mokonzi na ngai azali kolongola ngai na mosala ? Nazali na makasi te ya kotimola mabele, mpe nakoyoka soni mpo na kokoma kosenga-senga.\wj* \v 4 \wj Ah ! Nasosoli sik’oyo likambo oyo nakoki kosala mpo ete, tango nakozala lisusu na mosala te, bato bayamba ngai kati na bandako na bango. »\wj* \pi1 \v 5 \wj Boye, abengaki bato nyonso oyo bazalaki na niongo ya mokonzi na ye ; atunaki na moto ya liboso : « Osengeli kofuta boni lokola niongo epai ya mokonzi na ngai ? »\wj* \pi1 \v 6 \wj Moto yango azongisaki : « Batono tuku mibale ya mafuta. »\wj* \pi1 \wj Mobateli bomengo alobaki na ye : « Zwa mokanda na yo ya niongo, vanda noki, mpe koma mokanda mosusu ya nyonso ya bangungulu zomi. »\wj* \pi1 \v 7 \wj Atunaki na moto mosusu : « Osengeli kofuta boni lokola niongo epai ya mokonzi na ngai ? »\wj* \pi1 \wj Azongisaki : « Basaki nkama moko ya ble. »\wj* \pi1 \wj Mobateli bomengo alobaki na ye : « Zwa mokanda na yo ya niongo, mpe koma mokanda mosusu ya nyonso ya basaki tuku mwambe. »\wj* \pi1 \v 8 \wj Mokonzi akumisaki mobateli mabe wana ya bomengo mpo na mayele oyo asalaki na yango. Pamba te bato ya mokili oyo, bazali na mayele koleka bana ya pole.\wj* \pi1 \v 9 \wj Nalobi na bino : bosalela bomengo ya mabe mpo na kotonga bondeko na bato mosusu ; mpo ete tango ekosila, bayamba bino kati na bivandelo ya seko.\wj* \v 10 \wj Moto oyo azali sembo na makambo mike, akoki mpe kozala sembo na makambo minene ; mpe moto oyo azali sembo te na makambo mike, akozala mpe sembo te na makambo minene.\wj* \v 11 \wj Boye soki bozali sembo te na bobateli bomengo oyo ezwami na banzela ya lokuta, nani akopesa bino bomengo ya solo ?\wj* \v 12 \wj Mpe soki bozali sembo te na bobateli biloko ya moto mosusu, nani akopesa bino biloko oyo esengeli kozala ya bino moko ?\wj* \r (Mat 6.24) \pi1 \v 13 \wj Mosali moko te akoki kosalela bankolo mibale, pamba te akoyina moko mpe akolinga mosusu to akokangama na moko mpe akoboya mosusu. Bokoki te kosalela mbala moko Nzambe mpe mbongo.\wj* \p \v 14 Wana Bafarizeo bazalaki koyoka Yesu koloba makambo wana nyonso, bazalaki koseka Ye, pamba te bazalaki na lokoso ya mbongo. \p \v 15 Kasi Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bino, bozali penza bato oyo bomilakisaka na miso ya bato mosusu lokola nde bozali bato ya sembo, nzokande Nzambe ayebi mitema na bino ; pamba te oyo bato bamonaka motuya makasi, Nzambe ayokaka yango nkele.\wj* \s1 Mibeko mpe Bokonzi ya Nzambe \r (Mat 11.12-13) \pi1 \v 16 \wj Tango ya Mibeko mpe ya Basakoli ewumelaki kino na Yoane Mobatisi ; kasi wuta Yoane Mobatisi ayaki, Sango Malamu ya Bokonzi ya Nzambe ezali koteyama, mpe moto nyonso azali kobunda na kondima mpo na kokota kuna.\wj* \r (Mat 5.18) \pi1 \v 17 \wj Ezali penza pete mpo na Likolo mpe mabele kolimwa ; kasi mpo na Mibeko, ezali penza pasi mpo na nkoma na yango oyo eleki moke kolongwa.\wj* \r (Mat 5.32) \pi1 \v 18 \wj Mobali nyonso oyo alongoli mwasi na ye na libala mpe abali mwasi mosusu asali ekobo, mpe mobali oyo abali mwasi oyo balongoli na libala asali mpe ekobo.\wj* \s1 Moto ya bomengo mpe mobola Lazare \pi1 \v 19 \wj Ezalaki na mozwi moko oyo azalaki kolata bilamba ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko, bongo azalaki kobika bomoi ya bisengo mikolo nyonso.\wj* \v 20 \wj Na liboso ya ekuke ya ndako na ye, mobola moko atandamaki wana, kombo na ye ezalaki Lazare, nzoto na ye mobimba etonda na bapota ;\wj* \v 21 \wj azalaki koluka ata kolia biloko oyo ezalaki kokweya longwa na mesa ya mozwi, kasi ezalaki bambwa nde ezalaki koya kolembola bapota na ye.\wj* \pi1 \v 22 \wj Mokolo moko, mobola yango akufaki, mpe ba-anjelu bamemaki ye epai ya Abrayami. Mozwi mpe akufaki, mpe bakundaki ye.\wj* \v 23 \wj Kati na mboka ya bakufi, mozwi azalaki konyokwama na pasi makasi ; boye atombolaki miso mpe amonaki, na mosika, Abrayami elongo na Lazare avanda pembeni na ye.\wj* \pi1 \v 24 \wj Mozwi akomaki koganga : « Tata Abrayami, yokela ngai mawa ! Tinda Lazare ete atia songe ya mosapi na ye kati na mayi mpo ete atangisela ngai mayi na lolemo, pamba te nazali koyoka pasi makasi kati na moto oyo. »\wj* \pi1 \v 25 \wj Kasi Abrayami azongisaki : « Mwana na ngai, kanisa ete, wana ozalaki na bomoi, ozwaki bolamu ebele, kasi Lazare azwaki nde pasi ebele. Sik’oyo awa, azali kozwa kobondisama na ye ; kasi yo, okomi na pasi.\wj* \v 26 \wj Lisusu, libulu moko monene ekaboli biso mpe bino, mpo ete moto nyonso oyo alingi kolongwa awa epai biso tozali mpo na kokende epai na bino, akoka te ; mpe ete moto nyonso oyo alingi kokatisa libulu yango longwa kuna epai bino bozali mpo na koya awa epai na biso, akoka mpe te. »\wj* \pi1 \v 27 \wj Mozwi alobaki : « Tata, nasengi na yo, tinda Lazare epai ya libota na ngai,\wj* \v 28 \wj pamba te nazali na bandeko mitano. Tika ete akende kokebisa bango mpo ete, bango mpe, bakoma awa te, kati na esika oyo ya pasi ! »\wj* \pi1 \v 29 \wj Abrayami azongisaki : « Bandeko na yo bazali na Moyize mpe basakoli ; tika ete bayoka bango ! »\wj* \pi1 \v 30 \wj Mozwi alobaki lisusu : « Te, tata Abrayami ! Kasi soki moto moko awuti na mboka ya bakufi mpe akei epai na bango, bakobongola mitema ! »\wj* \pi1 \v 31 \wj Abrayami alobaki na ye : « Soki baboyi koyoka Moyize mpe basakoli, bakondima mpe kaka te ata soki moto moko alamuki kati na bakufi. »\wj* \c 17 \s1 Lolenge ya kovanda elongo na bandeko \r (Mat 18.6-7; Mlk 9.42) \p \v 1 Yesu alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Makambo oyo ebetisaka bato mabaku ekoki kozanga te ; kasi mawa na moto oyo, na nzela na ye, makambo yango eyaka !\wj* \v 2 \wj Ekoleka malamu mpo na ye kokanga ye libanga monene ya enikelo, na kingo mpe kobwaka ye na ebale, na esika ya kotika ye kokweyisa na masumu moko kati na bana mike oyo.\wj* \v 3 \wj Bosala penza keba mpo na bolamu na bino !\wj* \r (Mat 18.15, 21-22) \pi1 \wj Soki ndeko na yo asali yo mabe, pamela ye ; mpe soki ayoki mawa mpo na mabe yango, limbisa ye.\wj* \v 4 \wj Mpe soki, na mokolo moko, asali yo mabe mbala sambo, mpe ayei epai na yo mbala sambo koloba na yo : « Nayoki mawa mpo na mabe na ngai, » limbisa ye !\wj* \s1 Kondima lokola mbuma ya mutarde \r (Mat 17.19-20) \p \v 5 Bantoma balobaki na Nkolo : \pi1 — Bakisa kondima na biso ! \p \v 6 Nkolo azongisaki : \pi1 \wj — Soki bozali na kondima oyo ezali moke lokola mbuma ya mutarde, bokoki koloba na nzete oyo : « Pikolama na esika oyo mpe kende komilona kati na ebale, » mpe ekotosa bino.\wj* \s1 Tozali basali ya pamba \pi1 \v 7 \wj Nani kati na bino, soki azali na mosali bilanga to na mobateli bibwele, akoloba na ye tango azongi wuta na bilanga : « Yaka noki, vanda na mesa mpo ete olia ? »\wj* \v 8 \wj Boni, akoloba na ye te : « Lambela ngai bilei, lata bilamba na yo ya mosala mpo na kotiela ngai biloko na mesa, kino nasilisa kolia mpe komela ; sima na yango nde yo mpe okoki kolia mpe komela ? »\wj* \v 9 \wj Boni, akozongisela mosali wana matondi mpo ete asali mosala oyo atindaki ye ?\wj* \v 10 \wj Ndenge moko mpe mpo na bino : soki bosali nyonso oyo batindi bino, boloba : « Tozali basali ya pamba, tokokisi kaka mokumba na biso. »\wj* \s1 Yesu abikisi bato na maba zomi \p \v 11 Wana Yesu azalaki kokende na Yelusalemi, alekaki na mondelo kati na Samari mpe na Galile. \v 12 Lokola azalaki kokota na mboka moko, bato na maba zomi bayaki kokutana na Ye ; batelemaki na mosika \v 13 mpe babandaki kobelela Ye na mongongo makasi : \pi1 — Mokonzi, Yesu, yokela biso mawa ! \p \v 14 Tango Yesu amonaki bango, alobaki : \pi1 \wj — Bokende komilakisa epai ya Banganga-Nzambe !\wj* \p Wana bazalaki kokende kuna, bakomaki peto. \v 15 Tango moko kati na bango amonaki ete abiki na bokono na ye, azongaki na kokumisa Nzambe na mongongo makasi. \v 16 Afukamaki na makolo ya Yesu, elongi kino na se, mpe azongiselaki Ye matondi. Moto yango azalaki moto ya Samari. \p \v 17 Bongo Yesu atunaki : \pi1 \wj — Boni, bango nyonso zomi bakomi peto te ? Wapi bato mosusu libwa ?\wj* \v 18 \wj Moko te azongi mpo na kopesa Nzambe nkembo, longola kaka mopaya oyo ?\wj* \p \v 19 Bongo alobaki na moto yango ya Samari : \pi1 \wj — Telema mpe kende ; kondima na yo ebikisi yo !\wj* \s1 Lolenge oyo Bokonzi ya Nzambe ekoya \p \v 20 Mokolo moko, Bafarizeo batunaki Yesu : \pi1 — Bokonzi ya Nzambe ekoya tango nini ? \p Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Bokonzi ya Nzambe ekoya te na lolenge ete bato bamona yango.\wj* \v 21 \wj Bakoloba te : « Ezali awa » to « Ezali kuna, » pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali kati na bino.\wj* \p \v 22 Bongo alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \wj — Tango ezali koya, tango oyo bokozala na posa makasi ya komona ata mokolo moko kati na mikolo ya Mwana na Moto, kasi bokomona yango te.\wj* \r (Mat 24.23-28; Mlk 13.21-22) \pi1 \v 23 \wj Bakoloba na bino : « Azali awa ! » to « Azali kuna ! » Bolanda bango te !\wj* \v 24 \wj Pamba te, na mokolo na Ye, Mwana na Moto akozala lokola mokalikali oyo epeli mpe engengisi likolo longwa na este kino na weste.\wj* \v 25 \wj Kasi liboso ete mokolo yango ekoma, asengeli komona pasi mingi, mpe bato ya ekeke oyo basengeli koboya Ye.\wj* \r (Mat 24.37-41) \pi1 \v 26 \wj Ndenge esalemaki na tango ya Noa, ndenge wana mpe ekosalema na tango ya Mwana na Moto :\wj* \v 27 \wj bato bazalaki kolia, komela, kobala mpe kobalisa, kino na mokolo oyo Noa akotaki na masuwa ; bongo mpela eyaki mpe ebomaki bango nyonso.\wj* \v 28 \wj Ezalaki mpe bongo na tango ya Loti : bato bazalaki kolia, komela, kosomba, koteka, kolona mpe kotonga.\wj* \v 29 \wj Kasi na mokolo oyo Loti abimaki wuta na Sodome, mvula ya moto mpe ya fofolo ekitaki wuta na likolo mpe ebomaki bango nyonso.\wj* \v 30 \wj Ekozala mpe bongo, na mokolo oyo Mwana na Moto akomonana.\wj* \r (Mat 24.17-18; Mlk 13.15-16) \pi1 \v 31 \wj Na mokolo yango, moto oyo akozala na likolo ya ndako na ye asengeli te kokita mpo na kozwa biloko kati na ndako na ye, mpe moto oyo akozala kati na bilanga na ye asengeli te kozonga na ndako mpo na likambo songolo.\wj* \v 32 \wj Bokanisa makambo oyo ekomelaki mwasi ya Loti !\wj* \pi1 \v 33 \wj Moto oyo akoluka kobatela bomoi na ye akobungisa yango, mpe moto oyo akobungisa bomoi na ye akobatela yango.\wj* \r (Mat 24.40-41) \pi1 \v 34 \wj Nazali koloba na bino : na butu wana, bato mibale bakozala na likolo ya mbeto moko : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ;\wj* \v 35 \wj basi mibale bakozala konika bambuma elongo : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala ;\wj* [ \v 36 \wj mibali mibale bakozala kati na elanga moko : moko akokamatama, mpe mosusu akotikala.\wj*]\f + \fr 17.36 \fr*\ft Eteni oyo ezali te kati na mikanda mosusu\ft*\f* \p \v 37 Bayekoli batunaki Yesu : \pi1 — Nkolo, makambo yango ekosalema wapi ? \p Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Epai ebembe ezali, kuna nde bandeke oyo eliaka bibembe ekosangana.\wj* \c 18 \s1 Molende na kosambela \p \v 1 Yesu alobaki na bayekoli na Ye lisese moko mpo na kolakisa bango ete basengeli kosambelaka tango nyonso, na kolemba te. \v 2 Alobaki : \pi1 \wj — Kati na engumba moko, ezalaki na mosambisi moko oyo azalaki kotosa Nzambe te, mpe azalaki komemia bato te.\wj* \v 3 \wj Kati na engumba yango, ezalaki mpe na mwasi moko akufisa mobali ; azalaki koya mbala na mbala epai ya mosambisi yango mpo na koloba na ye : « Longisa ngai liboso ya monguna na ngai. »\wj* \v 4 \wj Wuta tango molayi, mosambisi yango aboyaki. Kasi suka na suka, amilobelaki : « Atako natosaka Nzambe te mpe namemiaka bato te,\wj* \v 5 \wj kasi lokola motungisi ya mwasi oyo akufisa mobali eleki ndelo, nakolongisa ye kaka, mpo ete akoba te koyaka tango nyonso kino kozangisa ngai kimia. »\wj* \p \v 6 Nkolo abakisaki : \pi1 \wj — Boyoka maloba ya mosambisi mabe oyo !\wj* \v 7 \wj Boni, Nzambe akolongisa te baponami na Ye, tango bagangaka epai na Ye butu mpe moyi ? Boni, akozelisa bango ?\wj* \v 8 \wj Nazali koloba na bino : akolongisa bango noki. Nzokande, ekozala ndenge nini tango Mwana na Moto akoya ! Boni, akokuta kondima kati na mokili ?\wj* \s1 Lisese ya Mofarizeo mpe mofutisi mpako \p \v 9 Epai ya bato oyo bamimonaki bato ya sembo mpe batiolaki bato mosusu, Yesu alobaki lisusu lisese oyo : \pi1 \v 10 \wj — Bato mibale bakendeki na Tempelo mpo na kosambela : moko azalaki Mofarizeo ; mpe mosusu, mofutisi mpako.\wj* \v 11 \wj Mofarizeo abendanaki ye moko na pembeni mpe asambelaki : « Oh Nzambe, nazali kotonda Yo, mpo ete nazali te lokola bato mosusu oyo bazali miyibi, bato mabe, bato na bikobo to mpe lokola mofutisi mpako oyo.\wj* \v 12 \wj Nakilaka bilei mbala mibale na poso mpe napesaka eteni ya zomi ya nyonso oyo nazwaka. »\wj* \pi1 \v 13 \wj Kasi mofutisi mpako atelemaki mwa mosika ; amekaki ata te kotombola miso na ye na likolo, kasi atiaki loboko na ye na tolo mpe alobaki : « Oh Nzambe, yokela ngai mawa, pamba te nazali moto ya masumu ! »\wj* \pi1 \v 14 \wj Nazali koloba na bino : mofutisi mpako azongaki na ndako na ye sima na Nzambe kokomisa ye moto ya sembo, kasi Mofarizeo te. Pamba te moto nyonso oyo amitombolaka, bakokitisa ye ; mpe oyo amikitisaka, bakotombola ye.\wj* \s1 Yesu ayambi bana mike \r (Mat 19.13-15; Mlk 10.13-16) \p \v 15 Bato bazalaki mpe komema bana mike epai ya Yesu mpo ete atia bango maboko. Tango bayekoli bamonaki bongo, bapamelaki bango. \v 16 Kasi Yesu abengaki bana mpe alobaki : \pi1 \wj — Botika bana mike baya epai na Ngai ; bopekisa bango te koya epai na Ngai, pamba te Bokonzi ya Nzambe ezali mpo na bato oyo bazali lokola bana mike.\wj* \v 17 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo azali koyamba te Bokonzi ya Nzambe lokola mwana moke akotikala kokota te kati na Bokonzi yango.\wj* \s1 Bazwi mpe Bokonzi ya Nzambe \r (Mat 19.16-30; Mlk 10.17-31) \p \v 18 Mokambi moko ya Bayuda atunaki na Yesu : \pi1 — Moteyi malamu, nasengeli kosala nini mpo ete nazwa bomoi ya seko ? \p \v 19 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Mpo na nini ozali kobenga Ngai « Moteyi malamu ? » Moko te azali malamu, longola kaka Ye moko Nzambe.\wj* \v 20 \wj Oyebi mibeko oyo : « Okosalaka ekobo te, okobomaka te, okoyibaka te, okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo, okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu. »\wj* \p \v 21 Mokambi yango azongisaki : \pi1 \wj — Natosaka nyonso wana wuta bolenge na ngai.\wj* \p \v 22 Sima na Yesu koyoka bongo, alobaki na ye : \pi1 \wj — Ozangi eloko moko. Teka biloko na yo nyonso, kabola mbongo oyo okozwa epai ya babola, mpe okozwa bomengo kati na Likolo. Sima na yango, yaka mpe landa Ngai.\wj* \p \v 23 Tango mokambi ya Bayuda ayokaki bongo, akomaki mawa-mawa, pamba te azalaki na bozwi mingi. \p \v 24 Yesu atalaki ye mpe alobaki : \pi1 \wj — Ezali pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe !\wj* \v 25 \wj Nzokande, eleki pete mpo na shamo kolekela na lidusu ya tonga ; kasi ezali penza pasi mpo na mozwi kokota kati na Bokonzi ya Nzambe.\wj* \p \v 26 Bato oyo bayokaki Ye koloba bongo batunaki : \pi1 — Bongo nani penza akoki kobikisama ? \p \v 27 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Oyo ekoki kosalema te elongo na bato, ekoki kosalema elongo na Nzambe.\wj* \p \v 28 Petelo alobaki na Yesu : \pi1 — Nkolo, totiki nyonso oyo tozalaki na yango mpo na kolanda Yo ! \p \v 29 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : moto nyonso oyo atiki ndako na ye, mwasi na ye, bandeko na ye, baboti na ye to bana na ye, mpo na kozwa Bokonzi ya Nzambe lokola litomba,\wj* \v 30 \wj akozwa, na tango oyo, biloko mingi koleka ; mpe na tango oyo ezali koya, bomoi ya seko.\wj* \s1 Yesu asakoli lisusu kufa mpe lisekwa na Ye \r (Mat 20.17-19; Mlk 10.32-34) \p \v 31 Yesu abendaki na pembeni bayekoli na Ye zomi na mibale mpe alobaki na bango : \pi1 \wj — Tozali kokende na Yelusalemi ; makambo nyonso oyo basakoli bakoma na tina na Mwana na Moto ekokokisama.\wj* \v 32 \wj Bakokaba Ye na maboko ya bapagano, bakoseka Ye, bakofinga Ye, bakobwakela Ye soyi,\wj* \v 33 \wj bakobeta Ye fimbu mpe bakoboma Ye ; mpe, na mokolo ya misato, akosekwa.\wj* \p \v 34 Bayekoli basosolaki ata eloko moko te kati na makambo yango ; ndimbola na yango ezalaki ya kobombama mpo na bango, mpe bayebaki te makambo oyo Yesu azalaki kolobela. \s1 Yesu abikisi mokufi miso \r (Mat 20.29-34; Mlk 10.46-52) \p \v 35 Wana Yesu akomaki pene ya Jeriko, ezalaki na mokufi miso pembeni ya nzela, azalaki ya kovanda mpe azalaki kosenga-senga. \v 36 Tango ayokaki makelele ya ebele ya bato oyo bazali koleka, atunaki : \pi1 — Likambo nini oyo ezali kosalema ? \p \v 37 Balobaki na ye : \pi1 — Yesu ya Nazareti azali koleka ! \p \v 38 Agangaki : \pi1 — Yesu, Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! \p \v 39 Bato oyo bazalaki liboso bapamelaki ye mpe balobaki na ye ete akanga monoko ; kasi, ye, agangaki lisusu makasi koleka : \pi1 — Mwana ya Davidi, yokela ngai mawa ! \p \v 40 Yesu atelemaki mpe atindaki ete bamemela Ye mokufi miso yango. Tango akomaki pene na Ye, Yesu atunaki ye : \pi1 \v 41 \wj — Olingi nasala nini mpo na yo ?\wj* \p Mokufi miso azongisaki : \pi1 — Nkolo, nalingi komona. \p \v 42 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Mona ! Kondima na yo ebikisi yo.\wj* \p \v 43 Mpe mbala moko, akomaki komona, mpe alandaki Yesu, na kokumisa Nzambe. Tango bato nyonso bamonaki bongo, bango mpe bakumisaki Nzambe. \c 19 \s1 Zashe azwi lobiko \p \v 1 Yesu akotaki na engumba Jeriko, mpe azalaki kokatisa yango. \v 2 Nzokande, ezalaki na moto moko kuna, kombo na ye « Zashe. » Azalaki mokonzi ya bafutisi mpako, mpe azalaki na bozwi ebele ; \v 3 azalaki na posa ya komona soki Yesu azali nani, kasi lokola azalaki mokuse, akokaki te komona Ye mpo ete bato bazalaki ebele penza. \v 4 Boye akimaki mbangu na liboso mpe amataki na nzete ya sikomori mpo na komona Yesu, pamba te Yesu akolekela na nzela wana. \p \v 5 Tango Yesu akomaki na esika yango, atombolaki miso mpe alobaki na ye : \pi1 \wj — Zashe, kita noki ! Nasengeli kolala na ndako na yo lelo.\wj* \p \v 6 Mbala moko, Zashe akitaki mpe ayambaki Yesu na esengo. \p \v 7 Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakomaki koyimayima ; bazalaki koloba : \pi1 — Tala, akei kolala na ndako ya moto ya masumu ! \p \v 8 Kasi Zashe atelemaki mpe alobaki na Ye : \pi1 — Nkolo, nazali kopesa, awa mpe sik’oyo, kati-kati ya biloko na ngai epai ya babola ; mpe, soki nabotolaki biloko ya moto, nazali kozongisela ye yango mbala minei. \p \v 9 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Lelo, lobiko eyei na ndako oyo, mpo ete ye mpe azali mwana ya Abrayami.\wj* \v 10 \wj Pamba te Mwana na Moto ayaki mpo na koluka mpe kobikisa bato oyo babunga.\wj* \s1 Lisese ya mbongo \r (Mat 25.14-30) \p \v 11 Wana bazalaki koyoka makambo yango, Yesu akobaki koloba lisese moko, pamba te akomaki pene ya Yelusalemi, mpe mpo ete bato bakanisaki ete Bokonzi ya Nzambe elingi komimonisa kaka na tango yango. \v 12 Boye Yesu alobaki : \pi1 \wj — Ezalaki na moto moko abotama na libota ya mbongo ; akendeki na mokili moko ya mosika mpo ete bakomisa ye mokonzi mpe, sima na yango, akozonga.\wj* \v 13 \wj Boye abengaki basali zomi kati na basali na ye mpe apesaki bango mbongo ya bibende zomi. Alobaki na bango : « Bosala mombongo na mbongo oyo kino tango nakozonga. »\wj* \pi1 \v 14 \wj Kasi bandeko na ye, bana mboka, bazalaki kolinga ye te ; batindaki ndambo ya bato, sima na ye, mpo na koloba : « Toboyi ete moto oyo akoma mokonzi na biso. »\wj* \pi1 \v 15 \wj Sima na ye kozwa bokonzi, azongaki na ekolo na ye mpe abengaki basali epai ya banani apesaki mbongo mpo na koyeba soki bazwi mileki boni na mbongo na ye.\wj* \pi1 \v 16 \wj Mosali ya liboso ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende zomi lokola mileki. »\wj* \pi1 \v 17 \wj Nkolo alobaki na ye : « Osali malamu ! Ozali mosali malamu ! Mpo ete ozalaki sembo na likambo ya moke, nakokomisa yo moyangeli ya bingumba zomi. »\wj* \pi1 \v 18 \wj Mosali ya mibale ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, mbongo na yo eboti mbongo ya bibende mitano lokola mileki. »\wj* \pi1 \v 19 \wj Nkolo na ye azongisaki : « Nakokomisa yo moyangeli ya bingumba mitano. »\wj* \pi1 \v 20 \wj Mosali mosusu ayaki mpe alobaki : « Nkolo na ngai, tala mbongo na yo ! Nabombaki yango malamu kati na eteni ya elamba.\wj* \v 21 \wj Nazalaki kobanga yo, pamba te ozalaka moto ya matata : ozwaka biloko oyo obombaki te mpe obukaka bambuma ya nkona oyo olonaki te. »\wj* \pi1 \v 22 \wj Nkolo na ye azongisaki : « Mosali mabe ! Nakopesa yo etumbu kolanda maloba na yo moko. Oyebaki ete nazali moto ya matata, ete nazwaka biloko oyo nabombaki te mpe nabukaka bambuma ya nkona oyo nalonaki te.\wj* \v 23 \wj Bongo mpo na nini obombaki te mbongo na ngai kati na ndako ya misolo ? Na bozongi na ngai, nalingaki kozwa yango elongo na mileki ? »\wj* \pi1 \v 24 \wj Bongo nkolo alobaki na bato oyo bazalaki wana : « Bobotola ye mbongo yango mpe bopesa yango na moto oyo azali na mbongo ya bibende zomi. »\wj* \pi1 \v 25 \wj Balobaki na ye : « Nkolo, azali na mbongo ya bibende zomi ! »\wj* \pi1 \v 26 \wj Nkolo azongisaki : « Nazali koloba na bino : na moto oyo azali na eloko, bakopesa ye lisusu ; kasi na moto oyo azangi, bakobotola ye ata oyo azali na yango.\wj* \v 27 \wj Kasi banguna na ngai wana, oyo baboyaki ete nakoma mokonzi na bango, bomemela ngai bango awa mpe boboma bango na miso na ngai. »\wj* \ms1 Lotomo ya Yesu na Yelusalemi \s1 Bayambi Yesu na nkembo monene \r (Mat 21.1-11, 15-17; Mlk 11.1-10; Yn 12.12-16) \p \v 28 Sima na Yesu koloba bongo, alekaki liboso mpo na kokende na Yelusalemi. \p \v 29 Wana akomaki pene ya Betifaje mpe Betani, na ngomba oyo babengaka « ngomba ya banzete ya olive, » atindaki bayekoli mibale kati na bayekoli na Ye ; \v 30 alobaki na bango : \pi1 \wj — Bokende na mboka oyo ezali liboso na bino. Tango kaka bokokota na mboka yango, bokomona mwana ya ane bakanga na singa, oyo moto ata moko te asila kosalela ; bofungola yango mpe bomema yango awa.\wj* \v 31 \wj Soki moto moko atuni bino : « Mpo na nini bozali kofungola yango ? »\wj* \pi1 \wj Boloba na ye : « Nkolo azali na bosenga na yango. »\wj* \p \v 32 Bato oyo Yesu atindaki bakendeki mpe bamonaki yango ndenge kaka Yesu alobaki na bango. \p \v 33 Wana bazalaki kofungola mwana yango ya ane, bankolo na yango batunaki bango : \pi1 — Mpo na nini bozali kofungola mwana oyo ya ane ? \p \v 34 Bazongisaki : \pi1 — Nkolo azali na bosenga na yango. \p \v 35 Bamemaki mwana yango ya ane epai ya Yesu, batandaki bilamba na bango na mokongo na yango, mpe Yesu avandaki na likolo na yango. \p \v 36 Wana azalaki kokende, bato bazalaki kotanda bilamba na bango na nzela. \v 37 Mpe tango akomaki pene ya Yelusalemi, na esika oyo nzela ekita na ngomba ya banzete ya olive, ebele ya bayekoli babandaki kokumisa Nzambe, na esengo nyonso mpe na mongongo makasi mpo na bikamwa nyonso oyo bamonaki. \v 38 Bazalaki koloba : \q1 « Tika ete apambolama, \q2 mokonzi oyo ayei na Kombo ya Nkolo ! \q1 Kimia kati na Likolo, \q2 mpe nkembo kati na bisika oyo eleki Likolo ! » \p \v 39 Ndambo ya Bafarizeo, kati na ebele ya bato, balobaki na Yesu : \pi1 — Moteyi, pamela bayekoli na Yo ! \p \v 40 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino : soki bango babateli kimia, mabanga ekoganga !\wj* \s1 Etumbu ya Yelusalemi \p \v 41 Lokola akomaki pene ya Yelusalemi mpe amonaki engumba, alelaki mpo na yango \v 42 mpe alobaki : \pi1 \wj — Ah, soki kaka yo mpe oyebaki, na mokolo ya lelo, makambo oyo elingaki komemela yo kimia ! Kasi sik’oyo, ezali ya kobombama mosika na miso na yo.\wj* \v 43 \wj Mikolo ya pasi ekokomela yo, mikolo oyo banguna na yo bakotimola mabulu pembeni na yo, bakozingela yo mpe bakofinafina yo na bangambo nyonso ;\wj* \v 44 \wj bakobamba yo na mabele, yo mpe bato oyo bazali kati na lopango na yo, mpe bakotika ata libanga moko te na likolo ya libanga mosusu, pamba te oyebaki te tango oyo Nzambe ayaki epai na yo.\wj* \s1 Yesu ateyi kati na Tempelo \r (Mat 21.12-13; Mlk 11.15-19; Tala Yn 2.13-17) \p \v 45 Yesu akotaki kati na lopango ya Tempelo mpe abandaki kobengana bato oyo bazalaki koteka biloko kuna ; alobaki na bango : \pi1 \v 46 \wj — Ekomama : « Ndako na Ngai ekozala Ndako ya losambo ; » kasi bino, bokomisaki yango penza nganda ya miyibi !\wj* \p \v 47 Yesu azalaki koteya mikolo nyonso na Tempelo. Bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya Bayuda bazalaki koluka koboma Ye ; \v 48 kasi bazalaki kokoka te, pamba te bato nyonso bazalaki koyoka Yesu na bokebi. \c 20 \s1 Bokonzi ya Yesu endimami te \r (Mat 21.23-27; Mlk 11.27-33) \p \v 1 Mokolo moko, wana Yesu azalaki koteya bato kati na lopango ya Tempelo mpe kosakola Sango Malamu, bakonzi ya Banganga-Nzambe, balakisi ya Mobeko mpe bakambi ya bato babimelaki Ye ; \v 2 balobaki na Ye : \pi1 — Yebisa biso, na kombo ya bokonzi nini ozali kosala biloko oyo ? Nani apesi yo bokonzi yango ? \p \v 3 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Ngai mpe, nazali kotuna bino motuna moko. Boyebisa Ngai :\wj* \v 4 \wj Libatisi ya Yoane ewutaki na Nzambe to ewutaki na bato ?\wj* \p \v 5 Bakomaki kokabola makanisi bango na bango : « Soki tolobi : ‹ Ewutaki na Nzambe, › akotuna biso lisusu : ‹ Bongo mpo na nini bondimaki Ye te ? › \v 6 Soki mpe tolobi : ‹ Ewutaki na bato, › bato nyonso bakobamba biso mabanga, pamba te bandimaka ete Yoane azalaki mosakoli. » \v 7 Boye, bazongisaki : \pi1 — Toyebi te epai wapi ewutaki. \p \v 8 Yesu alobaki : \pi1 \wj — Ngai mpe, nakoyebisa bino te soki na kombo ya bokonzi nini nazali kosala makambo yango.\wj* \s1 Lisese ya basali mabe ya elanga ya vino \r (Mat 21.33-46; Mlk 12.1-12) \p \v 9 Sima, Yesu alobaki na bato lisese oyo : \pi1 \wj — Moto moko alonaki elanga ya vino, apesaki yango epai ya basali bilanga mpo ete bafutelaka yango, mpe akendeki mobembo ya tango molayi.\wj* \v 10 \wj Tango eleko ya kobuka bambuma ekokaki, atindaki mosali moko epai ya bafuteli elanga mpo ete bapesa ye ndambo ya bambuma kowuta na elanga ya vino. Kasi bafuteli elanga babetaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.\wj* \v 11 \wj Atindaki mosali mosusu ; kasi ye mpe, babetaki ye, bafingaki ye mpe bazongisaki ye maboko pamba.\wj* \v 12 \wj Atindaki lisusu mosali ya misato ; ye mpe, bazokisaki ye mpe babwakaki ye libanda ya elanga.\wj* \pi1 \v 13 \wj Bongo nkolo elanga ya vino amilobelaki : « Nasala nini ? Nakotinda kaka mwana na ngai ya mobali, oyo nalingaka mingi ; tango mosusu, bakotosa ye. »\wj* \pi1 \v 14 \wj Kasi tango bafuteli elanga bamonaki ye, balobanaki bango na bango : « Tala mokitani ya libula ! Toboma ye mpo ete libula ekoma ya biso ! »\wj* \pi1 \v 15 \wj Boye babwakaki ye na libanda ya elanga ya vino mpe babomaki ye.\wj* \pi1 \wj Nkolo elanga ya vino akosala bango nini ?\wj* \v 16 \wj Akoya ye moko, akoboma bafuteli elanga mpe akopesa elanga yango ya vino epai ya bato mosusu.\wj* \p Tango bato bayokaki bongo, balobaki : \pi1 — Te, ekoki kosalema te ! \p \v 17 Kasi Yesu atalaki bango mpe alobaki : \pi1 \wj — Bongo makambo oyo ekomama elakisi nini :\wj* \q1 \wj « Libanga oyo batongi ndako babwakaki\wj* \q2 \wj ekomi libanga ya songe ya ndako ? »\wj* \pi1 \v 18 \wj Moto nyonso oyo akokweya na likolo ya libanga yango akobukana ndambo na ndambo ; moto oyo libanga yango ekokweyela, ekopanza ye.\wj* \p \v 19 Kaka na tango yango, balakisi ya Mobeko mpe bakonzi ya Banganga-Nzambe balukaki nzela ya kokanga Yesu, pamba te bayebaki ete alobi lisese yango mpo na bango ; kasi babangaki bato. \s1 Mpako ya kofuta epai ya Sezare \r (Mat 22.15-22; Mlk 12.13-17) \p \v 20 Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli. \p \v 21 Banongi yango batunaki Yesu : \pi1 — Moteyi, toyebi ete olobaka mpe oteyaka makambo ya sembo, mpe oponaka bilongi te, kasi oteyaka na bosolo nzela ya Nzambe. \v 22 Boni, ezali sembo mpo na biso kofuta mpako epai ya Sezare to te ? \p \v 23 Kasi Yesu asosolaki mayele mabe na bango mpe alobaki na bango : \pi1 \v 24 \wj — Bolakisa Ngai mbongo moko ya ebende. Elilingi mpe makomi oyo batobola na mbongo oyo, ezali ya nani ?\wj* \p Bazongisaki : \pi1 — Ya Sezare ! \p \v 25 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Boye bopesa na Sezare, oyo ezali ya Sezare ; mpe na Nzambe, oyo ezali ya Nzambe !\wj* \p \v 26 Balongaki te kokanga Ye na nzela ya makambo oyo alobaki liboso ya bato ; mpe lokola bakamwaki eyano na Ye, bavandaki nye. \s1 Eyano ya Yesu na tina na lisekwa \r (Mat 22.23-33; Mlk 12.18-27) \p \v 27 Ndambo ya Basaduseo, oyo balobaka ete lisekwa ezali te, bayaki epai ya Yesu mpo na kotuna Ye motuna oyo : \pi1 \v 28 — Moteyi, Moyize atikela biso mobeko oyo kati na makomi : « Soki mobali moko akufi, atiki mwasi kasi bana te, ndeko na ye ya mobali asengeli kobala mwasi oyo akufisi mobali mpo ete abotela ndeko oyo asili kokufa bana. » \v 29 Nzokande, azalaki na bandeko mibali sambo. Ndeko ya liboso abalaki mwasi yango mpe akufaki, kasi abotaki bana te. \v 30 Ndeko ya mibale abalaki mwasi yango kaka ; \v 31 sima na ye, ndeko ya misato. Esalemaki kaka bongo kino na ndeko oyo ya sambo : bandeko nyonso sambo bakufaki, batikalaki kobota bana te. \p \v 32 Sima na bango nyonso, mwasi yango mpe akufaki. \v 33 Sik’oyo, na mokolo oyo bato bakosekwa kati na bakufi, mwasi yango akozala mwasi ya nani, pamba te bandeko mibali nyonso sambo babalaki ye ? \p \v 34 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Ezali bato ya mokili oyo nde babalaka mpe babalisaka ;\wj* \v 35 \wj kasi bato oyo bakomonana ete bakoki mpo na kosekwa kati na bakufi mpe kobika bomoi kati na mokili oyo ezali koya, bakobala te\wj* \v 36 \wj mpe bakokufa lisusu te, pamba te bazali lokola ba-anjelu. Bazali bana na Nzambe mpo ete basekwi kati na bakufi.\wj* \v 37 \wj Moyize atalisaki polele ete bakufi bakosekwa ; pamba te, kati na eteni oyo ezali kolobela nzete oyo ezalaki kopela moto kasi ezalaki kozika te, abengaki Nkolo « Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. »\wj* \v 38 \wj Nzokande, Nzambe azali Nzambe ya bakufi te, kasi Nzambe ya bato ya bomoi ; pamba te, mpo na Ye, bango nyonso misato bazali na bomoi.\wj* \p \v 39 Ndambo ya balakisi ya Mobeko bazongisaki : \pi1 — Moteyi, olobi malamu ! \p \v 40 Mpe moko te amekaki lisusu kotuna Ye mituna. \s1 Eyano ya Yesu na tina na bomoto ya Klisto \r (Mat 22.41-46; Mlk 12.35-37) \p \v 41 Yesu mpe atunaki bango : \pi1 \wj — Mpo na nini balobaka ete Klisto azali mwana ya Davidi ?\wj* \v 42 \wj Davidi, ye moko, alobaki boye kati na buku ya banzembo :\wj* \q1 \wj « Nkolo alobaki na Nkolo na ngai :\wj* \q2 \wj ‹ Vanda na ngambo ya loboko na Ngai ya mobali\wj* \q1 \v 43 \wj kino nakomisa banguna na Yo\wj* \q2 \wj enyatelo makolo na Yo. › »\wj* \pi1 \v 44 \wj Davidi azali kobenga Klisto « Nkolo, » bongo ndenge nini akoki lisusu kozala mwana na ye ?\wj* \s1 Yesu akebisi bayekoli na Ye \r (Mat 23.1, 5-7; Mlk 12.37-40) \p \v 45 Wana ebele ya bato bazalaki koyoka, Yesu alobaki na bayekoli na Ye : \pi1 \v 46 \wj — Bosala keba na balakisi ya Mobeko ! Balingaka kotambola na banzambala ya milayi ; balingaka ete bato bapesa bango mbote, na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; balingaka kovanda na bakiti ya liboso, kati na bandako ya mayangani ; mpe na bisika ya lokumu, kati na bafeti ;\wj* \v 47 \wj bayibaka biloko ya basi oyo bakufisa mibali mpe basalaka mabondeli ya milayi-milayi mpo na kokosa bato. Bakozwa etumbu oyo eleki makasi.\wj* \c 21 \s1 Likabo ya mwasi akufisa mobali \r (Mlk 12.41-44) \p \v 1 Wana Yesu atombolaki miso, amonaki bato na bozwi kotia makabo na bango kati na kitunga ya makabo ; \v 2 amonaki mpe mwasi mobola moko akufisa mobali kotia mbongo ya bibende mibale. \v 3 Alobaki : \pi1 \wj — Nazali koloba na bino penza ya solo : mwasi mobola oyo akufisa mobali apesi koleka bato nyonso.\wj* \v 4 \wj Pamba te bato wana nyonso bazwi kati na mbongo oyo bazali na yango na tina te, mpo na kotia kati na kitunga ya makabo ; kasi ye, kati na kokelela na ye, atie nyonso oyo azalaki na yango mpo na kokoba kobika.\wj* \s1 Yesu asakoli pasi mpo na Yelusalemi \r (Mat 24.1-8; Mlk 13.1-8) \p \v 5 Ndambo ya bayekoli bazalaki kolula kitoko ya Tempelo, ndenge ezalaki kongala na mabanga ya kitoko mpe na biloko ya kitoko oyo bazalaki kobonzela Nzambe lokola makabo. Kasi Yesu alobaki : \pi1 \v 6 \wj — Mikolo ekoya oyo, kati na nyonso oyo bozali komona awa, ata libanga moko te ekotikala na likolo ya libanga mosusu ; nyonso ekobukama.\wj* \p \v 7 Batunaki Yesu : \pi1 — Moteyi, makambo yango ekosalema tango nini ? Mpe elembo nini ekotalisa biso ete makambo yango ekomi pene ya kokokisama ? \p \v 8 Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Bosala keba ete moko te akosa bino ! Pamba te bato mingi bakoya na Kombo na Ngai, bakoloba : « Ngai nde Masiya, » mpe « Tango ekoki ! » Bolanda bango te.\wj* \v 9 \wj Soki boyoki basango ya bitumba mpe ya mobulu, bobanga te ; pamba te makambo wana esengeli nanu kosalema, kasi ekozala mbala moko suka ya mokili te.\wj* \p \v 10 Bongo alobaki na bango : \pi1 \wj — Ekolo moko ekotelemela ekolo mosusu, bokonzi moko ekobundisa bokonzi mosusu,\wj* \v 11 \wj mabele ekoningana makasi mpe, na bisika ebele, nzala makasi mpe bokono ya ndenge na ndenge ekozala ; makambo ya somo ekosalema, mpe bilembo ya kokamwa ekomonana kowuta na Likolo.\wj* \r (Mat 10.17-22; Mlk 13.9-13) \pi1 \v 12 \wj Kasi liboso ya makambo wana nyonso, bakokanga bino, bakonyokola bino, bakofunda bino kati na bandako ya mayangani, bakobwaka bino na baboloko, bakomema bino liboso ya bakonzi mpe ya bayangeli, mpo na Kombo na Ngai.\wj* \v 13 \wj Boye, ekozala mpo na bino libaku malamu ya kotatola solo na tina na Ngai.\wj* \pi1 \v 14 \wj Bozala na mitema ya kokita, bomitungisa te mpo na koluka koyeba ndenge nini bokosamba.\wj* \v 15 \wj Pamba te, Ngai moko, nakopesa bino maloba oyo bosengeli koloba mpe bwanya oyo ekosala ete banguna na bino nyonso bandima nyonso oyo bokoloba.\wj* \v 16 \wj Baboti na bino, bandeko na bino ya mibali mpe ya basi, baninga mpe balingami na bino bakokaba bino, mpe bakobomisa mingi kati na bino.\wj* \v 17 \wj Bato nyonso bakoyina bino mpo na Kombo na Ngai,\wj* \v 18 \wj kasi suki ata moko te ya mito na bino ekobunga.\wj* \v 19 \wj Boyika mpiko, mpe bokozwa bomoi.\wj* \r (Mat 24.15-21; Mlk 13.14-20) \pi1 \v 20 \wj Tango bokomona mampinga ya basoda ezingeli Yelusalemi, boyeba ete kobebisama na yango ekomi pene.\wj* \v 21 \wj Wana tika ete bato oyo bakozala kati na Yuda bakima na bangomba ; tika ete bato oyo bakozala kati na Yelusalemi babima ; mpe tika ete bato oyo bakozala kati na bilanga bazonga te kati na engumba !\wj* \v 22 \wj Pamba te mikolo wana ekozala mikolo ya pasi makasi, mikolo oyo makambo nyonso oyo ekomama ekokokisama.\wj* \pi1 \v 23 \wj Na mikolo yango, mawa na basi oyo bakozala na bazemi mpe na ba-oyo bakozala komelisa bana mabele ! Pamba te pasi ekozala makasi kati na mokili, mpe kanda ya Nzambe ekokweyela bato yango.\wj* \v 24 \wj Bakoboma bango na mopanga mpe bakomema bango na bowumbu kati na bikolo nyonso ya bapaya ; mpe bapagano bakonyata Yelusalemi kino tango ya bapagano ekosila koleka.\wj* \r (Mat 24.29-35; Mlk 13.24-31) \pi1 \v 25 \wj Bilembo ekomonana kati na moyi, kati na sanza, mpe kati na minzoto ; bongo na mokili, bikolo ekotonda na somo mpe na kobanga likolo ya lokito makasi mpe ya bambonge ya ebale monene.\wj* \v 26 \wj Bato bakokufa na somo, wana bakozala kokanisa makambo oyo esengeli koya na mokili, pamba te banguya ya Likolo ekoningisama.\wj* \v 27 \wj Sima na yango, bakomona Mwana na Moto koya kati na mapata, na nguya mpe na nkembo monene.\wj* \pi1 \v 28 \wj Tango makambo wana ekobanda kosalema, botelema, botombola mito mpe boyika mpiko, pamba te lisiko na bino ekomi pene.\wj* \p \v 29 Alobaki na bango lisese oyo : \pi1 \wj — Botala malamu nzete ya figi mpe banzete nyonso mosusu :\wj* \v 30 \wj soki kaka ebandi kobimisa makasa, boyebaka ete eleko ya moyi makasi ekomi pene.\wj* \v 31 \wj Ndenge moko mpe mpo na bino : tango bokomona makambo wana kosalema, boyeba ete Bokonzi ya Nzambe ekomi pene.\wj* \v 32 \wj Nazali koloba na bino penza ya solo : bato ya ekeke oyo bakoleka te kino makambo wana nyonso ekosalema.\wj* \v 33 \wj Likolo mpe mabele ekoleka, kasi maloba na Ngai ekoleka te.\wj* \pi1 \v 34 \wj Bosala keba ete mitema na bino ekoma kilo te likolo ya lokoso ya kolia, likolo ya kolangwa masanga mpe likolo ya mitungisi ya bomoi, noki te mokolo yango ekokanga bino na mbalakata,\wj* \v 35 \wj lokola monyama, pamba te ekoya likolo ya bato nyonso ya mokili mobimba.\wj* \v 36 \wj Bosenzela malamu mpe bosambelaka tango nyonso, mpo ete bozwa makasi ya kokima makambo nyonso oyo ekoya mpe ya kotelema liboso ya Mwana na Moto.\wj* \b \p \v 37 Mikolo nyonso, na moyi, Yesu azalaki koteya kati na Tempelo ; mpe na butu, azalaki kobima mpo na kokende kolala na ngomba ya banzete ya olive. \v 38 Na tongo makasi, bato nyonso bazalaki koya epai na Ye, kati na Tempelo, mpo na koyoka Ye. \c 22 \ms1 Kufa mpe lisekwa ya Yesu \s1 Yuda andimi koteka Yesu \r (Mat 26.1-5, 14-16; Mlk 14.1-2, 10-11; Yn 11.47-53) \p \v 1 Wana feti ya Mapa ezanga levire, feti oyo babengaka Pasika, ekomaki pene, \v 2 bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki koluka ndenge nini koboma Yesu, pamba te bazalaki kobanga bato. \p \v 3 Bongo Satana akotaki kati na Yuda oyo bazalaki kobenga « Isikarioti » mpe azalaki moko kati na bantoma zomi na mibale. \v 4 Boye, Yuda akendeki epai ya bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpo na kobongisa elongo na bango ndenge nini akoteka Yesu epai na bango. \v 5 Basepelaki mingi mpe bayokanaki ete bakopesa ye mbongo. \v 6 Yuda andimaki mpe akomaki koluka libaku malamu ya kokaba Yesu na maboko na bango, na ndenge ete ebele ya bato bayeba te. \s1 Yesu alie Pasika elongo na bayekoli na Ye \r (Mat 26.17-19; Mlk 14.12-16) \p \v 7 Awa ekomaki mokolo ya feti ya Mapa ezanga levire, mokolo oyo basengeli koboma mpate lokola mbeka ya Pasika, \v 8 Yesu atindaki Petelo mpe Yoane ; alobaki na bango : \pi1 \wj — Bokende kobongisela biso bilei ya Pasika.\wj* \p \v 9 Batunaki Ye : \pi1 — Esika nini olingi ete tobongisa yango ? \p \v 10 Yesu azongiselaki bango : \pi1 \wj — Tango bokokota na engumba, bokokutana na mobali moko amemi eloku ya mayi. Bolanda ye kino na ndako epai wapi akokota.\wj* \v 11 \wj Mpe boloba na nkolo ndako : « Moteyi atuni : ‹ Wapi shambre epai wapi nakolia bilei ya Pasika elongo na bayekoli na Ngai ? › »\wj* \pi1 \v 12 \wj Akolakisa bino, na etaje, shambre moko ya monene babongisa malamu ; ezali kuna nde bokobongisa bilei ya Pasika.\wj* \p \v 13 Bakendeki, bakutaki makambo nyonso ndenge kaka Yesu ayebisaki bango mpe babongisaki bilei ya Pasika. \r (Mat 26.26-29; Mlk 14.22-25; tala 1Kl 11.23-26) \p \v 14 Tango ngonga ekokaki, Yesu avandaki na mesa elongo na bantoma. \v 15 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Nayokaki posa makasi ya kolia Pasika oyo elongo na bino liboso ete namona pasi,\wj* \v 16 \wj pamba te, nazali koloba na bino : nakolia yango lisusu te kino tina na yango ekokokisama penza kati na Bokonzi ya Nzambe.\wj* \p \v 17 Sima na Ye kozwa kopo, azongisaki matondi epai ya Nzambe mpe alobaki : \pi1 \wj — Bokamata kopo oyo mpe bokabola yango kati na bino,\wj* \v 18 \wj pamba te nazali koloba na bino : nakomela lisusu te vino kowuta na bambuma ya vino, kino Bokonzi ya Nzambe eya.\wj* \p \v 19 Bongo, azwaki lipa mpe, sima na Ye kozongisa matondi epai ya Nzambe, akataki yango mpe apesaki bango yango ; alobaki : \pi1 \wj — Oyo ezali nzoto na Ngai, epesami mpo na bino ! Bosalaka boye mpo na kokanisa Ngai.\wj* \p \v 20 Sima na Ye kolia, asalaki mpe bongo mpo na kopo ; alobaki : \pi1 \wj — Kopo oyo ezali Boyokani ya sika kati na makila na Ngai, makila oyo esopani mpo na bino.\wj* \r (Mat 26.20-25; Mlk 14.17-21) \pi1 \v 21 \wj Nzokande, moto oyo azali koteka Ngai azali awa, azali kolia mesa moko elongo na Ngai.\wj* \v 22 \wj Solo, Mwana na Moto akokende, kolanda ndenge Nzambe akata ; kasi mawa na moto oyo azali koteka Ye.\wj* \p \v 23 Bongo bantoma bakomaki kotunana bango na bango mpo na koluka koyeba soki nani kati na bango akosala likambo yango. \s1 Nani aleki monene \r (Mat 20.24-28; 19.28; Mlk 10.41-45) \p \v 24 Tembe moko ebimaki kati na bayekoli mpo na koyeba soki nani kati na bango aleki monene. \p \v 25 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Bakonzi ya bikolo bakonzaka yango, mpe bayangeli na yango balingaka ete babenga bango bato malamu.\wj* \v 26 \wj Kasi esengeli te kozala bongo kati na bino. Nzokande, tika ete moto oyo aleki monene kati na bino azala lokola leki ya suka, mpe moto oyo azali kokamba azala lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.\wj* \v 27 \wj Pamba te nani aleki monene ? Ye oyo avandi na mesa to ye oyo azali kotia bilei na mesa ? Ezali te oyo avandi na mesa ? Kasi Ngai nazali kati na bino lokola moto oyo azali kotia bilei na mesa.\wj* \r (Mat 19.28) \pi1 \v 28 \wj Bino nde bato oyo botikali ya kokangama na Ngai kati na pasi na Ngai.\wj* \v 29 \wj Mpe lokola Tata na Ngai apesaki Ngai bokonzi, Ngai mpe nazali kopesa bino bokonzi,\wj* \v 30 \wj mpo ete bokoka kolia mpe komela na mesa na Ngai kati na Bokonzi na Ngai, mpe ete bokoka kovanda na bakiti ya bokonzi mpo na koyangela mabota zomi na mibale ya Isalaele.\wj* \s1 Yesu asakoli ete Petelo akowangana Ye \r (Mat 26.31-35; Mlk 14.27-31; Yn 13.36-38) \pi1 \v 31 \wj Simona, Simona, Satana asengi koyungola bino ndenge bayungolaka ble.\wj* \v 32 \wj Kasi nasambeli mpo na yo, mpo ete kondima na yo ekweya te. Mpe sima na yo kozonga epai na Ngai, lendisa bandeko na yo.\wj* \p \v 33 Kasi Petelo azongisaki : \pi1 — Nkolo, nandimi kokota boloko to kokufa elongo na Yo. \p \v 34 Yesu alobaki na ye : \pi1 \wj — Petelo, nazali koloba na yo : lelo, liboso ete soso elela, okowangana mbala misato ete oyebi Ngai te.\wj* \p \v 35 Bongo Yesu atunaki bango : \pi1 \wj — Tango natindaki bino maboko pamba, mbongo te, sakosi te, basandale te ; boni, bozangaki eloko ?\wj* \p Bazongisaki : \pi1 — Tozangaki eloko te. \p \v 36 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Kasi, sik’oyo, tika ete moto oyo azali na mbongo azwa yango, oyo azali na sakosi azwa yango, oyo azangi mopanga ateka elamba na ye mpo na kosomba yango !\wj* \v 37 \wj Ekomama : « Batangaki Ye elongo na babomi bato ; » mpe nazali koloba na bino : makambo yango esengeli kokokisama kati na Ngai.\wj* \p \v 38 Bayekoli balobaki : \pi1 — Nkolo, tala mipanga mibale. \p Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Ekoki !\wj* \s1 Yesu, na ngomba ya banzete ya olive \r (Mat 26.36-46; Mlk 14.32-42) \p \v 39 Yesu abimaki mpe akendeki lokola momesano na ngomba ya banzete ya olive, mpe bayekoli na Ye balandaki Ye. \v 40 Tango akomaki na esika yango, alobaki na bango : \pi1 \wj — Bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.\wj* \p \v 41 Akendeki mwa mosika na bango, afukamaki mpe asambelaki boye : \v 42 \wj « Tata, soki olingi, longola kopo oyo ya pasi liboso na Ngai ! Nzokande, kosala te kolanda mokano na Ngai, kasi sala kolanda mokano na Yo. »\wj* [ \v 43 Anjelu moko awutaki na Likolo, abimelaki Ye mpe alendisaki Ye. \v 44 Lokola azalaki koyoka somo makasi, asambelaki lisusu makasi koleka, kino motoki na Ye ekomaki lokola matanga ya makila oyo ekomaki kokweya na mabele.]\f + \fr 22.44 \fr*\ft Biteni oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.\ft*\f* \p \v 45 Tango asilisaki kosambela, atelemaki, akendeki epai bayekoli na Ye bazalaki mpe akutaki bango balala pongi, mpo ete batondaki na mawa. \p \v 46 Atunaki bango : \pi1 \wj — Mpo na nini bozali kolala ? Botelema mpe bosambela mpo ete bokweya te kati na komekama.\wj* \s1 Bakangi Yesu \r (Mat 26.47-55; Mlk 14.43-49; Yn 18.2-11) \p \v 47 Wana Yesu azalaki nanu koloba, ebele ya bato bayaki ; mpe moto oyo bazalaki kobenga « Yuda, » moko kati na bayekoli zomi na mibale, azalaki liboso na bango. Apusanaki pene ya Yesu mpo na koyamba Ye, \v 48 kasi Yesu atunaki ye : \pi1 \wj — Yuda, ozali penza koteka Mwana na Moto na nzela ya beze ?\wj* \p \v 49 Tango bato oyo bazalaki elongo na Yesu bamonaki makambo oyo ezali kosalema, batunaki Ye : \pi1 — Nkolo, tobeta bango na nzela ya mipanga na biso ? \p \v 50 Mpe moko kati na bango abetaki mosali ya mokonzi ya Banganga-Nzambe mopanga mpe akataki ye litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali. \v 51 Kasi Yesu alobaki : \pi1 \wj — Boye lisusu te !\wj* \p Yesu asimbaki litoyi ya mobali yango mpe abikisaki ye. \p \v 52 Bongo Yesu alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, na bakonzi ya bakengeli ya Tempelo mpe na bakambi ya bato, oyo bayaki kokanga Ye : \pi1 \wj — Boni, nakomi mokambi ya batomboki mpo ete boya kokanga Ngai na mipanga mpe banzete ?\wj* \v 53 \wj Nazalaki elongo na bino mikolo nyonso kati na lopango ya Tempelo, mpe bokangaki Ngai te. Kasi ezali ngonga na bino, ngonga oyo bokonzi ya molili ezali kokonza.\wj* \s1 Petelo awangani Yesu \r (Mat 26.57-58; Mlk 14.53–15.1; Yn 18.13-27) \p \v 54 Bakangaki Yesu, bamemaki Ye kati na ndako ya mokonzi ya Banganga-Nzambe. Petelo azalaki kolanda na mosika. \v 55 Mpe tango bapelisaki moto na kati-kati ya lopango mpe bavandaki lisanga, Petelo mpe avandaki elongo na bango. \r (Mat 26.69-75; Mlk 14.66-72; Yn 18.17-18, 25-27) \p \v 56 Mwasi mosali moko amonaki Petelo avandi wana pembeni ya moto. Sima na ye kotala Petelo malamu, alobaki : \pi1 — Tata oyo azalaki elongo na Yesu ! \p \v 57 Kasi Petelo awanganaki mpe alobaki : \pi1 — Mwasi, nayebi ye te. \p \v 58 Sima na mwa tango moke, moto mosusu amonaki Petelo mpe alobaki : \pi1 — Yo mpe ozali moko kati na bango ! \p Petelo azongisaki : \pi1 — Tata, nazali moko te kati na bango. \p \v 59 Sima na ngonga moko, moto mosusu alobaki na molende : \pi1 — Ezali ya solo ! Tata oyo azalaki elongo na ye, pamba te azali moto ya Galile. \p \v 60 Kasi Petelo azongisaki : \pi1 — Nayebi te makambo oyo ozali kolobela ! \p Wana azalaki nanu koloba, soso elelaki. \v 61 Nkolo abalukaki mpe atalaki Petelo ; mpe Petelo akanisaki maloba oyo Nkolo alobaki na ye : \wj « Liboso ete soso elela, okowangana Ngai mbala misato. »\wj* \v 62 Abimaki mpe alelaki makasi na libanda. \r (Mat 26.67-68; Mlk 14.65) \p \v 63 Bato oyo bazalaki kokengela Yesu babandaki koseka mpe kobeta Ye. \v 64 Bazipaki Ye elongi mpe basengaki na makasi : \pi1 — Sakola : Nani abeti Yo ? \p \v 65 Mpe balobaki na Ye maloba mabe ebele mpo na kofinga Ye. \s1 Yesu asambi \r (Mat 26.59-65; 27.1; Mlk 14.55-64; Yn 18.19-24) \p \v 66 Tango tongo etanaki, bakambi ya bato, elongo na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko, basanganaki mpe basengaki ete bamema Yesu liboso ya Likita-Monene na bango. \v 67 Balobaki : \pi1 — Soki ozali Klisto, yebisa biso. \p Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Ata nayebisi bino, bokondima na bino kaka Ngai te ;\wj* \v 68 \wj mpe soki Ngai napesi bino motuna, bokopesa na bino mpe Ngai eyano te.\wj* \v 69 \wj Kasi kobanda sik’oyo, Mwana na Moto akovanda na ngambo ya loboko ya mobali ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso.\wj* \p \v 70 Bango nyonso batunaki : \pi1 — Ozali Mwana na Nzambe ? \p Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Bino nde bolobi ete nazali Mwana na Nzambe.\wj* \p \v 71 Bongo balobaki : \pi1 — Mpo na nini koluka matatoli mosusu ? Toyoki yango na monoko na ye moko. \c 23 \s1 Yesu liboso ya Pilato mpe Erode \r (Mat 27.2, 11-14; Mlk 15.1-5; Yn 18.28-38) \p \v 1 Bato nyonso oyo bazalaki kati na mayangani batelemaki mpe bamemaki Yesu liboso ya Pilato ; \v 2 mpe kuna, bakomaki kofunda Ye : \pi1 — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi ! \p \v 3 Pilato atunaki Yesu : \pi1 — Boni, ozali mokonzi ya Bayuda ? \p Yesu azongisaki : \pi1 \wj — Olobi yango.\wj* \p \v 4 Pilato alobaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe na ebele ya bato : \pi1 — Namoni mabe moko te epai ya moto oyo. \p \v 5 Kasi batiaki kaka molende mpe balobaki : \pi1 — Te ! Azali kotombokisa bato ya Yuda mobimba na nzela ya mateya na Ye ; abandaki yango na Galile kino akomi awa. \p \v 6 Tango Pilato ayokaki bongo, atunaki soki Yesu azali moto ya Galile. \v 7 Wana ayokaki ete Yesu azali moto ya mboka oyo ezalaki na se ya bokonzi ya Erode, atindaki Ye epai ya Erode, pamba te Erode azalaki kati na Yelusalemi na mikolo wana. \p \v 8 Erode asepelaki mingi tango amonaki Yesu, pamba te, wuta kala, azalaki koluka komona Ye mpo ete ayokaki basango mingi na tina na Ye, mpe azalaki kolikya komona Yesu kosala likamwisi. \v 9 Apesaki ye mituna ebele, kasi Yesu apesaki ye ata eyano moko te. \p \v 10 Bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe balakisi ya Mobeko bazalaki kaka wana mpe bazalaki kopelisa moto na maloba mabe mpo na kokweyisa Yesu. \v 11 Erode mpe basoda na ye basekaki mpe batiolaki Yesu ; balatisaki Ye elamba ya kitoko makasi mpe bazongisaki Ye epai ya Pilato. \v 12 Nzokande, Erode mpe Pilato bazalaki banguna wuta kala ; kasi na mokolo wana, bakomaki balingami. \s1 Bakateli Yesu etumbu ya kufa \r (Mat 27.15-26; Mlk 15.1-15; Yn 18.39–19.16) \p \v 13 Pilato abengisaki bakonzi ya Banganga-Nzambe, bakambi ya Bayuda mpe bato nyonso ; alobaki na bango : \pi1 \v 14 — Bomemelaki ngai moto oyo mpe bofundaki ye ete azali kotombokisa bato. Napesi ye mituna liboso na bino mpe nazwi ye na mabe ata moko te kati na nyonso oyo bofundelaki ye. \v 15 Erode mpe azwaki ye na mabe ata moko te, yango wana azongisaki ye epai na biso. Boye, ndenge bokoki komona, moto oyo asali mabe ata moko te oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. \v 16 Na bongo, nakobetisa ye kaka fimbu mpe, sima, nakotika ye. \p [ \v 17 Nzokande, na bafeti nyonso, Pilato azalaki kobimisela bango mokangami moko.]\f + \fr 23.17 \fr*\ft Eteni oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.\ft*\f* \p \v 18 Bato nyonso bagangaki : \pi1 — Boma moto oyo ! Bimisela biso Barabasi ! \p \v 19 Barabasi akangamaki na boloko mpo ete abimisaki mobulu kati na engumba mpe abomaki moto. \p \v 20 Lokola azalaki na posa ya kotika Yesu, Pilato atunaki bango lisusu. \v 21 Kasi bakobaki koganga : \pi1 — Baka ye na ekulusu ! Baka ye na ekulusu ! \p \v 22 Pilato atunaki bango lisusu, mpo na mbala ya misato : \pi1 — Mpo na nini ? Mabe nini tata oyo asali ? Ngai nazwi ye na mabe ata moko te, oyo ekoki kosala ete azwa etumbu ya kufa. Boye, nakobetisa ye kaka fimbu ; sima, nakotika ye. \p \v 23 Kasi bakobaki kaka kosenga, na koganga makasi koleka, ete babaka Yesu na ekulusu ; mpe suka na suka, koganga na bango elongaki. \p \v 24 Pilato azwaki mokano ya kokokisa oyo basengaki ; \v 25 abimiselaki bango moto oyo basengaki, oyo akangamaki na boloko mpo na mobulu mpe mpo ete abomaki moto, mpe akabaki Yesu na maboko na bango mpo ete basala Ye nyonso oyo balingi. \s1 Kufa ya Yesu \r (Mat 27.31-44; Mlk 15.20-32; Yn 19.17-22) \p \v 26 Wana basoda bazalaki kokumba Yesu, bakangaki mobali moko, kombo na ye ezalaki Simona, moto ya Sirene, oyo awutaki na bilanga ; batiaki ekulusu na mokongo na ye mpo ete amema yango sima na Yesu. \v 27 Bato ebele balandaki Yesu. Kati na bango, ezalaki mpe na basi oyo bazalaki kolelalela mpe komitungisa mingi mpo na Ye. \v 28 Yesu abalukaki mpo na kotala basi mpe alobaki : \pi1 \wj — Bana basi ya Yelusalemi, bolela mpo na Ngai te ; bolela nde mpo na bino moko mpe mpo na bana na bino.\wj* \v 29 \wj Pamba te, na mikolo oyo ekoya, bakoloba : « Esengo na basi oyo bazali na bana te, oyo babota te mpe bamelisa bana mabele te ! »\wj* \v 30 \wj Bongo\wj* \q1 \wj bakoloba na bangomba milayi : « Bokweyela biso ! »\wj* \q2 \wj Mpe bakoloba na bangomba mikuse : « Bozipa biso ! »\wj* \mi \v 31 \wj Pamba te soki bato bazali kosala makambo ya boye na nzete ya mobesu, ekozala ndenge nini na nzete ya kokawuka ?\wj* \p \v 32 Bamemaki mpe mibali mosusu mibale, babomi bato, mpo na koboma bango elongo na Yesu. \b \p \v 33 Tango bakomaki na esika oyo babengaka « Gologota, » babakaki kuna Yesu elongo na babomi mibale wana ya bato : moko, na ngambo ya loboko ya mobali ya Yesu ; mosusu, na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. \p \v 34 Yesu alobaki : \pi1 \wj — Tata, limbisa bango mpo ete bayebi te makambo oyo bazali kosala\wj*\f + \fr 23.34 \fr*\ft Eteni oyo ezali te na mikanda mingi ya kala.\ft*\f*. \p Mpe bakabolaki bilamba na Ye, na kobeta zeke. \v 35 Bato batelemaki wana, bazalaki kotala ; mpe bakambi batiolaki Ye, balobaki : \pi1 — Abikisaki bato mosusu ; tika ete amibikisa ye moko, soki penza azali Klisto, Moponami ya Nzambe ! \p \v 36 Basoda mpe bakendeki mpe batiolaki Ye ; bapesaki Ye vino ya ngayi \v 37 mpe balobaki : \pi1 — Soki ozali penza mokonzi ya Bayuda, mibikisa yo moko ! \p \v 38 Na likolo ya moto ya Yesu, ezalaki na makomi oyo : \pc Moto oyo azali Mokonzi ya Bayuda. \p \v 39 Moko kati na babomi bato oyo babakamaki na ba-ekulusu atiolaki Ye : \pi1 — Boni, ozali Klisto te ? Mibikisa yo moko mpe bikisa biso ! \p \v 40 Kasi mobomi bato mosusu apamelaki ye : \pi1 — Ozali kobanga Nzambe te mpo ete ozali na se ya etumbu ya ndenge moko na oyo ya Ye ! \v 41 Biso, tozwi penza etumbu na ndenge ya bosembo, pamba te tozali kozwa mbano ya misala mabe na biso ; kasi tata oyo asali ata mabe moko te. \p \v 42 Bongo alobaki lisusu : \pi1 — Yesu, kanisa ngai tango okokota kati na Bokonzi na Yo. \p \v 43 Yesu azongiselaki ye : \pi1 \wj — Nazali koloba na yo penza ya solo : lelo, okozala elongo na Ngai kati na Paradizo.\wj* \r (Mat 27.45-56; Mlk 15.33-41; Yn 19.25-30) \p \v 44 Na ngonga pene ya midi, molili ekotaki na mokili mobimba kino na ngonga ya misato ya pokwa, \v 45 pamba te moyi etikaki kongenga, mpe rido monene ya Tempelo epasukaki na kati-kati. \v 46 Yesu agangaki na mongongo makasi : \pi1 \wj — Tata, nazongisi molimo na Ngai kati na maboko na Yo.\wj* \p Sima na Ye koloba bongo, akataki motema. \b \p \v 47 Tango mokonzi ya basoda ya Rome amonaki makambo oyo eleki, akumisaki Nzambe mpe alobaki : \pi1 — Moto oyo azalaki penza sembo ! \p \v 48 Tango bato nyonso oyo basanganaki wana, mpo na kotala makambo oyo ezali kosalema, bamonaki makambo oyo ekweyi, batiaki maboko na bango na batolo na bango mpe bazongaki. \v 49 Kasi bato nyonso oyo bayebaki Yesu, mpe basi oyo balandaki Ye longwa na Galile, batelemaki na mosika mpe bazalaki kotala ndenge makambo ezali koleka. \s1 Bakundi Yesu \r (Mat 27.57-61; Mlk 15.42-47; Yn 19.38-42) \p \v 50 Kati na Likita-Monene ya Bayuda, ezalaki na moto moko, kombo na ye « Jozefi. » Azalaki moto malamu mpe moto ya sembo, \v 51 mpe andimaki te mikano mpe misala ya bato mosusu ya Likita-Monene ; azalaki moto ya mboka Arimate, engumba ya Bayuda, mpe azalaki kozela Bokonzi ya Nzambe. \v 52 Akendeki epai ya Pilato mpo na kosenga nzoto ya Yesu. \v 53 Bongo akitisaki nzoto yango longwa na ekulusu, alingaki yango na liputa ya lino, mpe atiaki yango kati na kunda oyo batobolaki kati na libanga moko ya monene epai wapi batikalaki nanu kokunda ata moto moko te. \v 54 Ezalaki mokolo ya komilengela, wana Saba elingaki kobanda. \v 55 Basi oyo bawutaki na Galile elongo na Yesu balandaki Jozefi, bamonaki kunda mpe ndenge nini atiaki nzoto ya Yesu kati na kunda yango. \v 56 Sima, bazongaki epai na bango mpe babongisaki mafuta ya solo kitoko mpe malasi. Kasi bapemaki na mokolo ya Saba, kolanda ndenge mobeko ezalaki kosenga. \c 24 \s1 Yesu asekwi \r (Mat 28.1-9; Mlk 16.1-8; Yn 20.1-13) \p \v 1 Na tongo-tongo ya mokolo ya liboso ya poso, basi bakendeki na kunda mpe bamemaki mafuta ya solo kitoko oyo balambaki. \v 2 Libanga oyo ekangaki ekotelo ya kunda, bakutaki yango etindikama mosika na ekotelo ya kunda. \v 3 Bakotaki, kasi bamonaki te nzoto ya Nkolo Yesu. \v 4 Wana bazalaki nanu komitungisa mpo na likambo yango, bato mibale babimelaki bango, balata bilamba oyo ezali kongenga makasi. \v 5 Basi yango babangaki, bakitisaki bilongi na bango na ngambo ya mabele ; kasi bato wana mibale balobaki na bango : \pi1 — Mpo na nini bozali koluka kati na bakufi Ye oyo azali na bomoi ? \v 6 Azali lisusu awa te, asekwi. Bokanisa makambo oyo ayebisaki bino, wana azalaki nanu kati na Galile : \v 7 \wj « Esengeli ete bakaba Mwana na Moto na maboko ya bato ya masumu ; esengeli ete babaka Ye na ekulusu ; mpe esengeli ete asekwa sima na mikolo misato. »\wj* \m \v 8 Boye, bakanisaki maloba ya Yesu. \p \v 9 Tango bazongaki longwa na kunda, bayebisaki makambo wana nyonso epai ya bayekoli zomi na moko mpe epai ya baninga na bango nyonso. \v 10 Ezalaki : Mari, moto ya mboka Magidala ; Jane mpe Mari, mama ya Jake. Baninga na bango mosusu ya basi bayebisaki mpe makambo yango epai ya bantoma, \v 11 kasi bazwaki maloba ya basi yango lokola maloba ezanga tina, mpe bandimaki bango te. \p \v 12 Kasi Petelo atelemaki mpe apotaki mbangu kino na kunda. Agunzamaki mpo na kotala, amonaki kaka biteni ya elamba ya lino elala yango moko. Alongwaki kuna mpe azongaki, akamwaki makasi makambo oyo ewutaki kosalema. \s1 Yesu abimeli bayekoli na nzela ya Emausi \p \v 13 Nzokande, kaka na mokolo yango, mibale kati na bango bazalaki kokende na mboka moko oyo kombo na yango ezalaki « Emausi. » Mboka yango ezalaki mosika na Yelusalemi, na bakilometele pene zomi na mibale. \v 14 Bazalaki kosolola na tina na makambo nyonso oyo ewuti kosalema. \v 15 Wana bazalaki kosolola mpe kotiana tembe mpo na makambo yango, Yesu asanganaki na bango mpe akomaki kokende na bango nzela moko. \v 16 Kasi lokola miso na bango ezalaki ya kozipama, bakokaki te kososola ete ezali Yesu. \p \v 17 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Makambo nini bozali kotiana na yango tembe na kotambola ?\wj* \p Batelemaki, bilongi mawa-mawa. \v 18 Moko kati na bango, kombo na ye « Kleopasi, » alobaki na Ye : \pi1 — Kati na bavandi nyonso ya Yelusalemi, yo moko kaka oyebi te makambo oyo ewuti kosalema mikolo oyo ! \p \v 19 Yesu atunaki bango : \pi1 \wj — Makambo nini ?\wj* \p Bazongisaki : \pi1 — Ezali makambo oyo etali Yesu ya Nazareti : azalaki mosakoli moko ya nguya, na misala mpe na maloba, liboso ya Nzambe mpe liboso ya bato nyonso. \v 20 Kasi bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bakambi na biso bakabaki Ye mpo ete bakatela Ye etumbu ya kufa, mpe babakaki Ye na ekulusu. \v 21 Tozalaki kolikya ete Ye nde akokangola Isalaele. Kasi longola nyonso wana, lelo ezali mokolo ya misato wuta makambo wana esalemaki. \p \v 22 Lisusu, ndambo ya basi kati na biso bakamwisi biso makasi ; bakendeki na kunda na tongo-tongo, \v 23 kasi bamonaki nzoto na Ye te, mpe bayaki koyebisa biso ete bamonaki ba-anjelu kobimela bango mpe koyebisa bango ete Yesu azali na bomoi. \v 24 Ndambo kati na baninga na biso bakendeki na kunda, mpe makambo oyo bamonaki kuna ekokani penza na oyo basi balobaki, kasi bamonaki Yesu te. \p \v 25 Yesu alobaki na bango : \pi1 \wj — Ah ! Bozali penza bazoba ! Tala ndenge mitema na bino ezali penza mabanga ! Bozali penza kondima te makambo nyonso oyo basakoli baloba !\wj* \v 26 \wj Boni, Klisto asengelaki te komona pasi ndenge wana mpo ete akota kati na nkembo na Ye ?\wj* \p \v 27 Bongo Yesu alimbolelaki bango makambo nyonso oyo ekomama kati na Makomi, kobanda na Moyize kino na basakoli nyonso. \p \v 28 Tango bakomaki pene ya mboka epai wapi bazalaki kokende, Yesu asalaki lokola nde azali kokende mosika. \v 29 Kasi bango babondelaki Ye makasi : \pi1 — Vanda elongo na biso, pamba te pokwa esili kokoma, mpe butu elingi kokota. \p Boye Yesu akotaki na ndako mpo na kovanda elongo na bango. \v 30 Tango avandaki na mesa elongo na bango, akamataki lipa, azongisaki matondi epai ya Nzambe, akataki yango na biteni, mpe apesaki bango yango. \v 31 Mbala moko, miso na bango efungwamaki mpe basosolaki ete ezali Yesu, kasi alimwaki na miso na bango. \v 32 Batunanaki : \pi1 — Boni, mitema na biso etondaki na esengo te wana azalaki kosolola na biso na nzela mpe kolimbolela biso Makomi ? \p \v 33 Kaka na tango yango, batelemaki mpe bazongaki na Yelusalemi epai wapi bakutaki bayekoli zomi na moko basangana elongo na baninga na bango, \v 34 oyo balobaki na bango : \pi1 — Ezali ya solo, Nkolo asekwi ; abimelaki Simona ! \p \v 35 Bango mibale mpe bayebisaki makambo oyo ekomelaki bango na nzela mpe ndenge nini basosolaki Yesu tango akataki lipa na biteni. \s1 Yesu abimeli bayekoli zomi na moko \r (Yn 20.19-23) \p \v 36 Wana bazalaki nanu kosolola na tina na makambo yango, Yesu ayaki kotelema na kati-kati na bango mpe alobaki : \pi1 \wj — Tika ete kimia ezala na bino !\wj* \p \v 37 Babangaki mpe somo ekangaki bango, pamba te bakanisaki ete bamoni elima. \p \v 38 Yesu atunaki bango : \pi1 \wj — Mpo na nini bozali kobanga ? Mpe mpo na nini bozali na tembe kati na mitema na bino ?\wj* \v 39 \wj Botala maboko mpe makolo na Ngai ; ezali penza Ngai. Bosimba Ngai mpe botala ! Elima ezalaka na mosuni te, ezalaka mpe na mikuwa te ; nzokande, bozali komona malamu ete, Ngai, nazali na yango.\wj* \p \v 40 Wana azalaki koloba bongo, alakisaki bango maboko mpe makolo na Ye. \v 41 Lokola bakokaki nanu kondima te mpo ete batondisamaki na esengo mpe bazalaki kokamwa mingi, Yesu atunaki bango : \pi1 \wj — Bozali awa na eloko ya kolia ?\wj* \p \v 42 Bapesaki Ye eteni ya mbisi bakalinga. \v 43 Azwaki yango mpe aliaki yango na miso na bango. \p \v 44 Bongo alobaki na bango : \pi1 \wj — Yango nde makambo oyo nayebisaki bino tango nazalaki nanu elongo na bino : « Makambo nyonso oyo ekomama na tina na Ngai kati na Mobeko ya Moyize, kati na mikanda ya basakoli mpe kati na banzembo, esengeli kokokisama. »\wj* \p \v 45 Bongo afungolaki bango mayele mpo ete bakoka kososola Makomi. \p \v 46 Alobaki na bango : \pi1 \wj — Tala makambo oyo ekomama : « Klisto akomona pasi, mpe akosekwa kati na bakufi na mokolo ya misato ;\wj* \v 47 \wj mpe, na Kombo na Ye, bakoteya bato ya bikolo nyonso, kobanda na Yelusalemi, ete babongola mitema mpo ete bazwa bolimbisi ya masumu. »\wj* \v 48 \wj Bino nde bozali batatoli ya makambo yango.\wj* \v 49 \wj Ngai nakotindela bino Molimo oyo Tata na Ngai alakaki ; boye bino, botikala awa, kati na engumba oyo, kino bokotondisama na nguya ya Likolo.\wj* \r (Mlk 16.19; Mis 1.4-14) \p \v 50 Yesu amemaki bango na libanda ya engumba, pene ya Betani ; mpe kuna, atombolaki maboko mpe apambolaki bango. \p \v 51 Wana azalaki kopambola bango, akabwanaki na bango mpe amemamaki kati na Likolo. \p \v 52 Bongo bagumbamelaki Ye mpe bazongaki na Yelusalemi na esengo makasi. \v 53 Mpe kuna na Yelusalemi, bazalaki kovanda tango nyonso kati na lopango ya Tempelo mpo na kokumisa Nzambe.