\id LEV Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Levitike \toc1 Levitike \toc2 Levitike \toc3 Lev \mt1 Levitike \c 1 \ms1 Mibeko na tina na bambeka mpe makabo \p \v 1 Yawe abengaki Moyize mpe ayebisaki ye, wuta na Ndako ya kapo ya Bokutani : \v 2 « Yebisa bana ya Isalaele : \s1 Na tina na bambeka ya kotumba \p ‹ Soki moko kati na bino alingi kobonza nyama lokola mbeka epai na Yawe, asengeli komema nyama oyo azwi kati na bangombe, bantaba mpe bameme. \p \v 3 Soki azali kobonza ngombe lokola mbeka ya kotumba, amema nde oyo ezangi mbeba. Bongo akobonza yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo ete Yawe andima yango. \v 4 Moto oyo akobonza yango akotia loboko na ye na moto ya mbeka. Mbeka yango ekondimama lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu ya moto oyo abonzi yango. \v 5 Akokata kingo ya ngombe liboso ya Yawe, bongo bakitani ya Aron, Banganga-Nzambe, bakozwa makila na yango mpe bakosopa yango na bangambo nyonso ya etumbelo oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 6 Bakolongola poso ya mbeka yango mpe bakokata yango na biteni. \v 7 Sima, bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bakopelisa moto na etumbelo mpe bakotanda bakoni likolo ya moto. \v 8 Bana mibali ya Aron, Banganga-Nzambe, bakotia lisusu biteni ya ngombe, moto mpe biteni ya mafuta, na likolo ya bakoni oyo ezali kopela na etumbelo. \v 9 Bakosukola na mayi biloko na yango ya kati mpe makolo na yango ; sima, Nganga-Nzambe akotumba nyonso na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. \p \v 10 Soki ezali nyama ya moke nde azali kobonza lokola mbeka ya kotumba, akomema mwana ntaba to mwana meme ya mobali oyo ezanga mbeba. \v 11 Akokata yango kingo liboso ya Yawe, na ngambo ya nor ya etumbelo. Bakitani ya Nganga-Nzambe Aron basengeli kosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. \v 12 Akokata-kata mbeka yango na biteni ; bongo Nganga-Nzambe akobongisa yango : akotia moto mpe biteni ya mafuta likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo ; \v 13 akosukola na mayi biloko ya kati mpe makolo. Sima, Nganga-Nzambe akomema nyonso mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. \p \v 14 Kasi soki ezali ndeke nde azali kobonzela Yawe lokola likabo ya kotumba, akomema ebenga ya zamba to mwana ebenga ya mboka. \v 15 Nganga-Nzambe akomema yango na etumbelo, akokata yango moto, akotumba moto yango na etumbelo mpe akosopa makila na yango zingazinga ya etumbelo. \v 16 Akolongola eloko oyo ezalaka na kingo mpe bansala na yango nyonso ; akobwaka yango na ngambo ya este ya etumbelo, na esika oyo batiaka putulu ya moto. \v 17 Sima, akofungola ndeke na kati-kati ya mapapu ; kasi akokata mapapu yango te. Bongo Nganga-Nzambe akotumba yango likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto na etumbelo. Ezali mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. \c 2 \s1 Na tina na makabo ya bambuma \p \v 1 Soki moto alingi komema makabo ya mbuma epai na Yawe, makabo yango ekozala ya farine. Bongo na likolo na yango, akosopa mafuta mpe akotia ansa. \v 2 Akomema yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, oyo moko kati na bango akozwa loboko mobimba ya farine mpe mafuta elongo na ansa nyonso, mpe akotumba yango na etumbelo lokola ekaniseli. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. \v 3 Ndambo oyo ekotikala, kati na makabo ya mbuma, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. \p \v 4 Soki amemi likabo ya farine batumba na fulu ya moto, likabo yango esengeli kozala ya gato oyo ezanga levire, oyo basangisa na mafuta to ya mikate oyo ezanga levire mpe bapakola mafuta na likolo na yango. \p \v 5 Soki ezali likabo bakalinga na kikalungu, esengeli kozala ya farine ezanga levire mpe basangisa na mafuta. \v 6 Bakokata yango na biteni mpe bakosopa mafuta likolo na yango. Ezali likabo ya bambuma. \p \v 7 Bongo soki likabo yango ezali ya bambuma bakalinga na kikalungu, ekozala ya farine basangisa na mafuta. \p \v 8 Bakomema epai na Yawe makabo ya mbuma oyo babongisi mpe bakopesa yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akomema yango na etumbelo. \v 9 Nganga-Nzambe akolongola na makabo ya mbuma eteni oyo esengeli kobonzama lokola ekaniseli mpe akotumba yango na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. \v 10 Bongo bagato oyo ekotikala, ekozala ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Ezali eteni ya bule penza kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. \p \v 11 Likabo moko te ya mbuma, oyo bokomemela Yawe ekozala na levire, pamba te bokotumba te levire to mafuta ya nzoyi lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. \v 12 Okomema yango epai na Yawe lokola likabo ya bambuma ya liboso, kasi bokobonza yango te na etumbelo lokola makabo ya solo kitoko. \p \v 13 Okotia mungwa na makabo na yo nyonso ya bambuma mpe okobosana te kotia mungwa na likabo na yo ya bambuma, pamba te ezali elembo ya boyokani oyo Nzambe na yo asalaki. Okotia mungwa na makabo na yo nyonso. \p \v 14 Soki omemeli Yawe likabo ya bambuma ya liboso, okomema bambuma ya sika bakalinga na moto mpe batuta. \v 15 Okosopela yango mafuta mpe ansa. Ezali likabo ya bambuma. \v 16 Bongo Nganga-Nzambe asengeli kotumba eteni ya likabo elongo na ansa nyonso lokola ekaniseli. Ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. \c 3 \s1 Na tina na bambeka ya boyokani \p \v 1 Soki moto moko alingi kobonza ngombe ya mobali to ya mwasi lokola mbeka ya boyokani, nyama ya kobonza liboso ya Yawe esengeli kozala ezanga mbeba. \v 2 Akotia loboko na ye na moto ya mbeka, akokata yango kingo na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo, Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. \v 3 Kati na mbeka yango ya kozongisa boyokani, tala biteni oyo akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati, mafuta nyonso oyo ekangami na biloko ya kati, \v 4 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango, na kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa mpe bambuma mibale wana. \v 5 Bana mibali ya Aron bakotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba oyo ezali likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. \p \v 6 Soki alingi kobonza meme to ntaba lokola mbeka ya boyokani liboso ya Yawe, asengeli kobonza nyama ya mobali to ya mwasi oyo ezanga mbeba. \v 7 Soki azali nde kobonza mwana meme lokola mbeka, akomema yango liboso ya Yawe. \v 8 Akotia loboko na ye na moto ya mbeka na ye, akokata yango kingo liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo bana mibali ya Aron bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. \v 9 Kati na mbeka yango ya kozongisa boyokani, tala biteni oyo akobonza epai na Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta ya mbeka, mokila mobimba, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati mpe mafuta nyonso oyo ekangami na kati, \v 10 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ezipaka yango mpe mafuta oyo ezali kati-kati ya mipanzi na loketo. Akolongola bafwa na bambuma mibale wana. \v 11 Nganga-Nzambe akotumba biteni nyonso wana na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. \p \v 12 Soki alingi kobonza ntaba ya mobali to ya mwasi, akomema yango liboso ya Yawe. Akotia loboko na ye na moto ya mbeka na ye, \v 13 akokata yango kingo liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo bana mibali ya Aron bakosopa makila na yango na bangambo nyonso ya etumbelo. \v 14 Akobonza liboso ya Yawe lokola likabo bazikisa na moto : mafuta nyonso oyo ezipaka biloko ya kati, \v 15 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo, mafuta oyo ekangami na yango mpe bafwa. Bakolongola yango nzela moko na bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo. \v 16 Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo. Ezali likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. \p Biteni nyonso ya mafuta ezali ya Yawe. \v 17 Ezali mobeko ya seko mpo na milongo oyo ekoya, na bisika nyonso oyo bokovanda : bokolia te ezala mafuta to makila. › » \c 4 \s1 Na tina na bambeka mpo na masumu \p \v 1 Yawe ayebisaki Moyize : \v 2 « Loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Soki moto asali masumu to likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe, tala ndenge bokosala : \s2 Mbeka mpo na masumu ya Nganga-Nzambe \p \v 3 ‘ Soki Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta asali masumu, bongo na nzela ya masumu na ye amemisi bato nyonso ngambo, akobonza liboso ya Yawe mpo na masumu oyo asili kosala, mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka mpo na masumu. \v 4 Boye akobonza liboso ya Yawe, mwana ngombe yango ya mobali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akotia loboko na ye na moto ya mwana ngombe mpe akokata yango kingo liboso ya Yawe. \v 5 Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta akozwa ndambo ya makila ya mwana ngombe yango ya mobali mpe akomema yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 6 Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe, liboso ya rido ya Esika ya bule. \v 7 Nganga-Nzambe akotia ndambo ya makila na maseke ya etumbelo ya ansa oyo ezali liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo ndambo mosusu ya makila ya ngombe oyo ekotikala, akosopa yango na makolo ya etumbelo ya bambeka ya kotumba, oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 8 Akolongola mafuta nyonso ya mwana ngombe oyo asili kobonza lokola mbeka mpo na masumu, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati, mpe nyonso oyo ekangami kati na yango \v 9 elongo na bambuma mibale oyo ezalaka na loketo, na mafuta oyo ezali kati-kati ya mipanzi na loketo ; akolongola bafwa mpe bambuma wana mibale \v 10 ndenge balongolaka mafuta ya ngombe oyo babonzi lokola mbeka ya boyokani. Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo ya mbeka ya kotumba. \v 11 Kasi poso ya ngombe ya mobali, mosuni na yango nyonso, moto na yango, makolo na yango, biloko ya kati ; \v 12 elingi koloba biteni mosusu ya ngombe oyo etikali, Nganga-Nzambe asengeli komema yango libanda ya molako, na esika moko ya bule oyo ebongisama mpo na kotumba biteni ya mbeka oyo etikalaka, na esika oyo babwakaka putulu ; bongo bakotumba yango na likolo ya bakoni oyo ezali kopela moto, na esika oyo babwakaka putulu. ’ \s2 Mbeka mpo na masumu ya lisanga mobimba \p \v 13 ‘ Soki lisanga mobimba ya Isalaele basali masumu na nko te mpe basali likambo moko oyo epekisami kati na mibeko ya Yawe, ata soki likambo yango eyebani te kati na lisanga, lisanga ekomema solo ngambo. \v 14 Bakobonza ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bakomema yango liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 15 Bakambi ya lisanga bakotia maboko na bango na moto ya ngombe yango liboso ya Yawe. \v 16 Nganga-Nzambe oyo bapakola mafuta akomema ndambo ya makila ya ngombe yango kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 17 Nganga-Nzambe akozindisa mosapi na ye kati na makila mpe akosopa ndambo ya makila mbala sambo liboso ya Yawe mpe ya rido. \v 18 Nganga-Nzambe akotia makila na maseke ya etumbelo ya ansa oyo ezali liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe akosopa makila nyonso oyo ekotikala na se ya etumbelo ya mbeka ya kotumba oyo ezali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 19 Akolongola mafuta nyonso ya ngombe mpe akotumba yango na etumbelo. \v 20 Akosala ndenge kaka asalaki na ngombe oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu. Na bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato ; mpe bakolimbisama. \v 21 Nganga-Nzambe akomema ngombe yango libanda ya molako mpe akotumba yango ndenge atumbaki ngombe ya liboso oyo ezalaki mbeka mpo na masumu na ye moko Nganga-Nzambe. ’ \s1 Mbeka mpo na masumu ya mokonzi \p \v 22 ‘ Soki mokambi moko asali masumu na nko te, mpo ete asali likambo oyo epekisami na mibeko ya Yawe, Nzambe na ye ; amemi solo ngambo. \v 23 Tango kaka akososola masumu na ye oyo asili kosala, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mobali oyo ezanga mbeba. \v 24 Akotia loboko na ye na moto ya ntaba yango mpe akokata yango kingo na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba, liboso ya Yawe. Ezali mbeka mpo na bolimbisi masumu. \v 25 Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka oyo ebonzami mpo na bolimbisi masumu, akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba mpe akosopa makila oyo ekotikala na makolo ya etumbelo. \v 26 Akotumba mafuta nyonso na etumbelo ndenge batumbaka mafuta ya mbeka ya boyokani. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mokonzi ; mpe mokonzi wana akolimbisama. ’ \s2 Mbeka mpo na masumu ya moto moko \p \v 27 ‘ Soki moto moko kati na lisanga asali masumu na nko te, mpo ete asali likambo moko oyo epekisami na mibeko ya Yawe ; amemi solo ngambo. \v 28 Tango kaka akososola masumu na ye oyo asali, asengeli kobonza lokola mbeka, ntaba ya mwasi ezanga mbeba. \v 29 Akotia loboko na ye na moto ya mbeka mpo na masumu na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. \v 30 Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka mpo na masumu, akotia yango na maseke ya etumbelo ya mbeka ya kotumba, mpe akosopa makila nyonso oyo etikali na makolo ya etumbelo. \v 31 Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta na mbeka ya boyokani ; bongo Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. \p \v 32 Soki abonzi mwana meme lokola mbeka mpo na masumu na ye, asengeli komema mwana meme ya mwasi ezanga mbeba. \v 33 Akotia loboko na ye na moto ya mbeka mpo na masumu, na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. \v 34 Nganga-Nzambe akozwa na mosapi na ye ndambo ya makila ya mbeka mpo na masumu, mpe akotia yango na maseke ya etumbelo ya bambeka ya kotumba. Bongo akosopa makila nyonso oyo etikali, na makolo ya etumbelo. \v 35 Akolongola mafuta nyonso ndenge kaka balongolaka mafuta ya mwana meme kati na mbeka ya boyokani. Mpe Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo, na likolo ya makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. ’ › » \c 5 \s2 Ndakisa ya masumu oyo elimbisamaka \p \v 1 « Soki moto ayoki mbela ya elakeli mabe na tina na likambo oyo amonaki mpe ayebi, bongo aboyi kotatola yango, asali masumu mpe amemi ngambo. \p \v 2 Soki moto asimbi na kozanga koyeba eloko ya mbindo, ezala ebembe ya nyama ya zamba ya mbindo to ebembe ya nyama ya mboka ya mbindo to ebembe ya nyama ya mbindo oyo etambolaka na libumu, moto yango akomi mbindo mpe amemi ngambo. \p \v 3 Soki moto asimbi na kozanga koyeba moto ya mbindo, mbindo oyo ezwamaka na kotutana, akokoma mbindo mpe akomema ngambo na yango tango kaka akososola yango. \v 4 Soki moto alapi ndayi na kozanga koyeba, ata soki ezali mpo na bolamu na ye to ya moto mosusu, bongo ayei kososola yango na sima, moto yango akomema ngambo. \v 5 Boye, soki amemi ngambo na moko kati na makambo oyo, asengeli kotubela masumu oyo asali \v 6 mpe kobonzela Yawe meme to ntaba ya mwasi lokola mbeka mpo na masumu na ye. Bongo, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango. \s2 Mbeka mpo na masumu ya mobola \p \v 7 Soki moto azangi makoki ya kozwa mwana meme, akomema epai na Yawe bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka : moko ekozala mbeka mpo na masumu, mpe mosusu, mpo na mbeka ya kotumba. \v 8 Akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akobonza liboso mbeka ya masumu : akokata yango kingo kasi akolongola moto te. \v 9 Akosopa ndambo ya makila na yango pembeni ya etumbelo ; mpe ndambo mosusu, na makolo ya etumbelo : ezali mbeka mpo na masumu. \v 10 Sima na yango, Nganga-Nzambe akobonza mbeka oyo ya mibale lokola mbeka ya kotumba, kolanda ndenge ekatama na mibeko. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. \p \v 11 Soki azangi makoki ya kozwa bibenga mibale ya zamba to bana mibale ya ebenga ya mboka, akomema epai ya Nganga-Nzambe bakilo misato ya farine lokola mbeka. Akotia te mafuta to ansa likolo na yango, pamba te ezali mbeka mpo na masumu. \v 12 Sima, akomema yango epai ya Nganga-Nzambe oyo akozwa loboko moko lokola eteni ya ekaniseli mpe akotumba yango na moto mpo na Yawe : ezali mbeka mpo na masumu. \v 13 Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana ; mpe moto yango akolimbisama. Ndambo ya mbeka oyo ekotikala ekozala ya Nganga-Nzambe, ndenge kaka esalemaka mpo na mbeka ya bambuma. » \s1 Mbeka mpo na kozongisa boyokani \p \v 14 Yawe alobaki na Moyize : \p \v 15 « Soki moto abuki mobeko mpe asali na nko te masumu liboso ya biloko oyo ebulisama mpo na Yawe, akobonzela Yawe lokola mbeka mpo na masumu na ye meme ya mobali ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani. \v 16 Lisusu, mpo na mabe oyo asali liboso ya Esika ya bule, moto yango asengeli kobakisa likolo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani : eteni moko kati na biteni mitano ya motuya ya mbeka wana. Boye akopesa biloko nyonso epai ya Nganga-Nzambe, mpe Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto wana na nzela ya meme ya mobali oyo ebonzami lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; boye moto yango akolimbisama. \p \v 17 Soki moto asali na kozanga koyeba masumu mpo ete abuki mobeko na Yawe, amemi ngambo ; mpe akomema mokumba ya mabe na ye. \p \v 18 Bongo, lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, akomema epai ya Nganga-Nzambe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo akozwa kati na etonga na ye. Meme yango esengeli kokokana na motuya ya palata oyo okokata. Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mabe oyo moto wana asalaki na kozanga koyeba ; boye moto yango akolimbisama. \v 19 Ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani, pamba te amemaki ngambo na ndenge asalaki masumu liboso ya Yawe. » \c 6 \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Soki moto asali masumu mpe abuki mobeko ya Yawe na kokosa moninga na ye mpo na eloko oyo babombisaki epai na ye to oyo adefaki to oyo ayibaki to oyo abotolaki na makasi \v 3 to atako amoni eloko oyo ebungaki, kasi akosi mpe alapi ndayi ya lokuta na tina na moko kati na masumu oyo moto akoki kosala ; \v 4 moto oyo asali masumu ya boye mpe amemi ngambo, akozongisa eloko oyo ayibisaki to oyo abotolaki na makasi to oyo babombisaki epai na ye to oyo amonaki sima na kobungisa yango. \v 5 To lisusu, akozongisa eloko nyonso oyo na tina na yango ye alapaki ndayi ya lokuta mpe akobakisa eteni moko kati na biteni mitano. Akozongisa yango na nkolo eloko na mokolo oyo akobonza mbeka na ye mpo na masumu. \v 6 Mpe akomema epai ya Nganga-Nzambe mbeka na ye mpo na kozongisa boyokani elongo na Yawe. Akomema meme ya mobali oyo ezanga mbeba ; akozwa yango kati na bameme mpe bantaba na ye kolanda ndenge okokata. \v 7 Nganga-Nzambe akosala mpo na moto wana, liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu ; mpe moto yango akolimbisama. » \ms1 Mibeko mpo na Banganga-Nzambe \s1 Na tina na mbeka ya kotumba \p \v 8 Yawe alobaki na Moyize : \v 9 « Pesa mitindo oyo epai ya Aron mpe epai ya bana na ye ya mibali : ‹ Tala mobeko mpo na mbeka ya kotumba : mbeka ya kotumba ekowumela na likolo ya motalaka ya etumbelo butu mobimba kino na tongo, mpe moto ya etumbelo ekozikisa yango. \v 10 Nganga-Nzambe akolata nzambala na ye ya lino mpe bakaputula na ye ya lino. Akolongola putulu ya mbeka ya kotumba oyo moto ezikisaki na etumbelo mpe akotia yango na mopanzi ya etumbelo. \v 11 Sima, akolongola bilamba wana mpe akolata bilamba mosusu ; bongo akomema putulu na libanda ya molako, na esika ya peto. \v 12 Moto ya etumbelo ekobanda kopela tango nyonso mpe ekoki kokufa te. Nganga-Nzambe akobanda kobakisa tongo nyonso bakoni mpe kotia mbeka ya kotumba na likolo ya bakoni ; bongo akotumba biteni ya mafuta ya mbeka ya boyokani na likolo na yango. \v 13 Moto esengeli kopela tango nyonso na etumbelo, ekoki kokufa te. › \p \v 14 ‹ Tala mobeko mpo na likabo ya gato : ‘ Bana mibali ya Aron bakomema yango liboso ya Yawe, liboso ya etumbelo. \v 15 Nganga-Nzambe akozwa na loboko na ye ndambo ya farine, mafuta mpe ansa nyonso oyo ezali na likolo ya gato ; akotumba yango na likolo ya etumbelo mpo ete solo kitoko na yango esepelisa Yawe mpe ezala ekaniseli mpo na Ye. \v 16 Ndambo oyo ekotikala, Aron mpe bana na ye ya mibali bakolia yango. Kasi bakolia yango ezanga levire, na Esika ya bule, na libanda ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 17 Bakotumba yango te na levire : ezali eteni oyo napesi bango kati na bambeka na Ngai oyo etumbami na moto : ezali eloko ya bule penza lokola mbeka mpo na masumu mpe mpo na kozongisa boyokani. \v 18 Bana mibali nyonso kati na bakitani ya Aron bakolia yango. Ezali eteni na bango mpo na tango nyonso mpe na milongo nyonso kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Bato nyonso oyo bakosimba yango bakokoma bule. ’ › » \p \v 19 Yawe alobaki na Moyize : \v 20 « Tala likabo oyo Aron mpe bana na ye ya mibali bakopesa epai na Yawe, na mokolo oyo bakozwa epakolami : eteni ya zomi ya efa ya farine lokola likabo ya tango nyonso. Na tongo, akopesa eteni moko kati na biteni mibale ; mpe eteni mosusu, na pokwa. \v 21 Okosangisa yango liboso na mafuta, bongo okokalinga yango na kikalungu. Sima okobonza yango na biteni lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. \p \v 22 Mwana mobali ya Aron oyo bakopakola mafuta mpo na kokitana na Aron lokola Nganga-Nzambe akobonza mpe likabo yango : ezali likabo ya libela mpo na Yawe mpe bakotumba yango mobimba. \v 23 Mbeka nyonso oyo Nganga-Nzambe akobonza na mobimba na yango ekoliama te, ezala ata ndambo na yango. » \s1 Na tina na mbeka mpo na masumu \p \v 24 Yawe alobaki na Moyize : \v 25 « Loba na Aron mpe na bana na ye ya mibali : ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na masumu : ‘ Bakokata kingo ya mbeka mpo na masumu liboso ya Yawe, na esika oyo bakataka bakingo ya bambeka ya kotumba ; ezali mbeka ya bule penza. \v 26 Nganga-Nzambe oyo azali kobonza yango mpo na masumu akolia yango na Esika ya bule, na libanda ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 27 Moto nyonso oyo akosimba mosuni na yango akozala bule. Soki kaka makila ya mbeka yango ezwi elamba na ye, asengeli kosukola esika oyo ezwi makila, na esika moko ya bule. \v 28 Bongo soki basaleli nzungu ya mabele mpo na kokalinga mosuni ya mbeka mpo na masumu, bakopanza nzungu yango. Soki bakalingi yango na nzungu ya bronze, bakopalola nzungu yango mpe bakosukola yango na mayi ebele. \v 29 Kaka mibali oyo bazali na libota ya Nganga-Nzambe nde bakoki kolia yango, pamba te ezali eloko ya bule penza. \v 30 Nzokande, mbeka moko te mpo na masumu ekoki koliama soki bamemi makila na yango na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu ; esengeli kotumba yango na moto. ’ › » \c 7 \s1 Na tina na mbeka mpo na kozongisa boyokani \p \v 1 « ‹ Tala mobeko ya mbeka mpo na kozongisa boyokani ; ezali eloko ya bule penza : \v 2 ‘ Bakokata kingo ya mbeka mpo na kozongisa boyokani, na esika oyo bakataka kingo ya bambeka ya kotumba. Bongo bakobwaka makila na yango pembeni-pembeni ya etumbelo. \v 3 Bakobonza biteni na yango ya mafuta : mokila, mafuta oyo ezipaka biloko ya kati, \v 4 bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe mafuta oyo ezipaka yango, oyo ezali kati na mipanzi mpe loketo. Bakolongola bafwa mpe bambuma mibale wana. \v 5 Nganga-Nzambe akotumba yango na etumbelo lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe : ezali mbeka mpo na kozongisa boyokani. \v 6 Mibali nyonso kati na Banganga-Nzambe bakoki kolia yango. Basengeli kolia yango na Esika ya bule : ezali eloko ya bule penza. \v 7 Mobeko yango ezali kaka moko, ezala mpo na mbeka mpo na kozongisa boyokani to mpo na mbeka ya masumu. Nyama ezali ya Nganga-Nzambe oyo asali mosala ya bolimbisi masumu. \p \v 8 Nganga-Nzambe oyo akobonza mbeka ya kotumba mpo na moto, akozwa poso ya nyama oyo abonzi mpe ekozala ya ye. \p \v 9 Likabo nyonso ya gato oyo batumbi na fulu ya moto to bakalingi na kikalungu to mpe batumbi na likolo ya manzanza ezali ya Nganga-Nzambe oyo abonzi yango. \v 10 Likabo nyonso ya gato oyo basangisi na mafuta to oyo ezali ya kokawuka ekozala ya bana mibali nyonso ya Aron ; bakozwa yango ndenge moko. ’ › \s1 Na tina na mbeka ya boyokani \p \v 11 ‹ Tala mibeko mpo na mbeka ya boyokani oyo moto akoki kobonza epai na Yawe : \v 12 ‘ Soki moto abonzi yango mpo na kozongisa matondi, asengeli kobonza, elongo na mbeka ya kozongisa matondi, likabo ya bagato ezanga levire kasi basangisa na mafuta, bagalete ezanga levire kasi bapakola yango mafuta mpe bagato basala na farine oyo basangisa malamu na mafuta. \v 13 Na likolo ya mbeka na ye ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi, akobakisa likabo ya bagato oyo esalemi na farine batia levire. \v 14 Akomema eteni ya likabo moko na moko mpe akobonza yango epai na Yawe : ekozala ya Nganga-Nzambe oyo asopaki makila ya mbeka yango ya boyokani pembeni-pembeni ya etumbelo. \v 15 Mosuni ya mbeka ya boyokani oyo abonzi mpo na kozongisa matondi esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango, eloko moko te ekoki kotikala kino na tongo. \p \v 16 Soki abonzi mbeka na ye ya boyokani mpo ete apesaki elaka, na kolapa ndayi to wuta na mokano ya motema na ye moko, mbeka esengeli koliama kaka na mokolo oyo abonzi yango. Kasi soki ndambo etikali, ekoliama na mokolo oyo ekolanda. \v 17 Mosuni oyo ekotikala na mbeka, na mokolo oyo ekolanda, esengeli kotumba yango. \v 18 Soki mosuni ya mbeka ya boyokani eliami na mokolo ya misato, mbeka yango ekondimama te. Ekotangama te likolo ya moto oyo abonzi yango, pamba te ezali likabo ya mbindo ; mpe moto oyo akomeka kolia yango akomema masumu. \p \v 19 Bongo soki mosuni yango etutani na eloko ya mbindo, esengeli batumba mosuni yango na moto. \p Kasi mpo na oyo etali mosuni ya mbeka ya boyokani, kaka moto oyo azali peto nde akoki kolia yango. \v 20 Nzokande, soki moto ya mbindo alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. \v 21 Soki moto moko asimbi eloko ya mbindo, ezala moto ya mbindo to nyama ya mbindo to eloko mosusu ya mabe mpe ya mbindo, mpe alie mosuni ya mbeka ya boyokani oyo ezali ya Yawe, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. ’ › » \s1 Malako mpo na bato : ekila ya kolia mafuta mpe makila \p \v 22 Yawe alobaki na Moyize : \v 23 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Bokolia te mafuta ya ngombe, ya meme to ya ntaba. \v 24 Nzokande bokoki na bino kosalela mafuta ya nyama oyo ekufa to ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba misala nyonso, kasi bokoki te kolia yango. \v 25 Moto nyonso oyo akolia mafuta ya nyama oyo babonzi epai na Yawe lokola likabo bazikisa na moto, bakolongola ye kati na bato na ye. \v 26 Na esika nyonso oyo bokovanda, bokoki te kolia makila, ezala makila ya ndeke to ya nyama. \v 27 Moto nyonso oyo akolia makila, bakolongola ye kati na bato na ye. › » \p \v 28 Yawe alobaki na Moyize : \v 29 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Moto nyonso oyo akobonza epai na Yawe mbeka ya boyokani akomema eteni ya mbeka na ye lokola mbeka na ye epai na Yawe. \v 30 Akomema yango ye moko, na maboko na ye, mpo ete etumbama lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Akomema mafuta mpe tolo ya mbeka mpe akotombola liboso ya Yawe tolo yango lokola likabo ya kotombola. \v 31 Nganga-Nzambe akotumba mafuta na etumbelo, kasi tolo ekozala mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali. \v 32 Bokopesa epai ya Nganga-Nzambe lokola likabo mopende ya ngambo ya loboko ya mobali ya bambeka ya boyokani. \v 33 Mwana mobali ya Aron oyo akobonza makila mpe mafuta ya mbeka ya boyokani akozwa mopende ya ngambo ya loboko ya mobali. \v 34 Pamba te, nakobanda kozwa kati na bambeka ya boyokani ya bana ya Isalaele tolo oyo batomboli mpe mopende oyo babonzi lokola likabo ya kotombola. Napesi yango epai ya Nganga-Nzambe Aron mpe bana na ye ya mibali lokola eteni na bango oyo bakobanda kozwa tango nyonso epai ya bana ya Isalaele. \p \v 35 Yango nde eteni ya makabo bazikisa na moto, oyo bana ya Isalaele basengeli kopesa epai ya Aron mpe bana na ye ya mibali wuta mokolo oyo akobulisa bango mpo na kosalela Yawe lokola Banganga-Nzambe. › » \p \v 36 Yango nde mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bana ya Isalaele mpo ete, wuta mokolo oyo apakolaki bango mafuta, babanda kopesa bango yango lokola eteni na bango. Ezali mibeko ya seko mpo na milongo nyonso ya bana na bango. \p \v 37 Yango nde mibeko mpo na mbeka ya kotumba, likabo ya gato, mbeka mpo na masumu, mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka mpo na kobulisa mpe mpo na mbeka ya boyokani \v 38 oyo Yawe apesaki epai ya Moyize, na ngomba Sinai kati na esobe ya Sinai na mokolo oyo apesaki mitindo epai ya bana ya Isalaele ete babonzela Ye bambeka mpe makabo na bango. \c 8 \ms1 Libulisi ya Banganga-Nzambe ya liboso \s1 Libulisi ya Aron mpe bana na ye ya mibali \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Mema Aron mpe bana na ye ya mibali, bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe, mafuta ya epakolami, mwana ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu, bameme mibale ya mibali, mpe kitunga oyo ezali na mapa ezanga levire ; \v 3 mpe sangisa lisanga mobimba na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. » \p \v 4 Moyize asalaki ndenge Yawe atindaki ye mpe lisanga esanganaki na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 5 Moyize alobaki na lisanga makambo oyo Yawe atindaki ye kosala. \v 6 Moyize amemaki Aron elongo na bana na ye ya mibali liboso mpe asukolaki bango na mayi. \v 7 Alatisaki Aron nzambala mpe akangaki ye mokaba na loketo ; alatisaki ye kazaka mpe efode, azingelaki ye na mokaba ya efode. \v 8 Alatisaki Aron elamba ya tolo mpe atiaki Urimi mpe tumimi likolo ya elamba yango. \v 9 Akangaki kitendi na moto ya Aron ; bongo liboso na yango, atiaki medaye ya wolo, elembo ya libulisi, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \p \v 10 Moyize azwaki mafuta ya epakolami mpe apakolaki Mongombo elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango ; na bongo nde abulisaki yango. \v 11 Asopaki na etumbelo ndambo ya mafuta mbala sambo mpe apakolaki mafuta mpo na kobulisa etumbelo, bisalelo na yango nyonso, sani monene mpe se na yango. \v 12 Asopaki ndambo ya mafuta ya epakolami na moto ya Aron mpe apakolaki ye mafuta yango mpo na kobulisa ye. \v 13 Moyize amemaki bana mibali ya Aron liboso, alatisaki bango banzambala, akangaki bango mikaba na loketo mpe alatisaki bango bikoti, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \p \v 14 Bongo amemaki ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu ; Aron elongo na bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto ya ngombe yango. \v 15 Moyize akataki yango kingo mpe asalelaki mosapi na ye mpo na kotia makila ya ngombe yango na maseke ya etumbelo. Boye, apetolaki etumbelo ; bongo asopaki makila oyo etikalaki, na makolo ya etumbelo oyo abulisaki mpo na mosala ya bolimbisi masumu. \v 16 Moyize azwaki lisusu mafuta nyonso oyo ezalaki pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipaka bafwa mpe bambuma nyonso mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango, atumbaki yango na etumbelo. \v 17 Kasi atumbaki na libanda ya molako ngombe yango ya mobali, poso na yango, misuni na yango mpe nyei na yango, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \p \v 18 Bongo amemaki meme ya mobali mpo na kobonza yango lokola mbeka ya kotumba ; Aron mpe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto na yango. \v 19 Moyize akataki kingo ya meme yango mpe asopaki makila na yango na bapembeni nyonso ya etumbelo. \v 20 Akataki-kataki meme yango na biteni. Moyize atumbaki biteni yango, moto mpe mafuta. \v 21 Asukolaki na mayi biloko ya kati mpe makolo, atumbaki meme yango mobimba na likolo ya etumbelo ; ezalaki mbeka ya kotumba, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaki Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \p \v 22 Bongo amemaki meme mosusu ya mobali mpo na libulisi ; Aron mpe bana na ye ya mibali batiaki maboko na bango na moto na yango. \v 23 Moyize akataki yango kingo, azwaki ndambo ya makila na yango mpe atiaki yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron, na mosapi ya monene ya loboko ya mobali ya Aron mpe na mosapi ya monene ya lokolo ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron. \v 24 Moyize amemaki bana mibali ya Aron liboso, atiaki ndambo ya makila na basonge ya matoyi na bango ya ngambo ya loboko ya mobali, na misapi ya minene ya maboko na bango ya mobali mpe na misapi ya minene ya makolo na bango ya ngambo ya loboko ya mobali. Sima, asopaki makila na bangambo nyonso ya etumbelo. \v 25 Azwaki biteni oyo ya mafuta : mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya lokolo ya ngambo ya loboko ya mobali. \v 26 Kati na kitunga ya mapa ezanga levire oyo ezalaki liboso ya Yawe, azwaki lipa moko, gato moko balamba na mafuta mpe galeti moko ; atiaki yango likolo ya biteni ya mafuta mpe ya mopende ya ngambo ya loboko ya mobali. \v 27 Atiaki biloko yango nyonso na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; bongo ayebisaki bango ete batombola yango liboso ya Yawe lokola likabo ya kotombola. \v 28 Moyize azwaki yango lisusu na maboko na bango mpe atumbaki yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba. Ezalaki mbeka ya libulisi, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. \p \v 29 Moyize azwaki tolo ya meme ya libulisi, atombolaki yango liboso ya Yawe lokola mbeka ya kotombola ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \v 30 Moyize azwaki na etumbelo, mafuta ya epakolami mpe ndambo ya makila ; asopelaki yango Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango. Bongo abulisaki Aron, bilamba na ye, bana na ye ya mibali mpe bilamba na bango. \p \v 31 Moyize alobaki na Aron mpe na bana na ye ya mibali : « Bolamba mosuni na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe bolia yango wana elongo na lipa oyo ezali kati na kitunga oyo ezali na mbeka ya libulisi, ndenge kaka natindaki tango nalobaki : ‹ Aron mpe bana na ye ya mibali nde bakolia yango. › \v 32 Oyo ekotikala kati na mosuni ya mbeka ya libulisi mpe lipa, bokotumba yango na moto. \v 33 Mikolo sambo, bokolongwa te na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani kino mikolo ya libulisi na bino ekokoka, pamba te libulisi na bino ekowumela mikolo sambo. \v 34 Makambo oyo esalemi lelo, yango nde Yawe atindi mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu na bino. \v 35 Bokovanda mikolo sambo, butu mpe moyi, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bokosala makambo oyo Yawe atindi mpo ete bokufa te. Pamba te, yango nde epesamelaki ngai lokola mitindo. » \p \v 36 Aron mpe bana na ye ya mibali basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize. \c 9 \s1 Aron mpe bana na ye babandi kosalela Yawe \p \v 1 Na mokolo ya mwambe, Moyize abengisaki Aron, bana na ye ya mibali mpe bakambi ya Isalaele. \v 2 Alobaki na Aron : « Zwa mwana ngombe lokola mbeka mpo na masumu na bino mpe meme ya mobali mpo na mbeka na bino ya kotumba ; nyonso mibale esengeli kozala ezanga mbeba, mpe bonza yango liboso ya Yawe. \v 3 Bongo loba na bana ya Isalaele : ‹ Bozwa ntaba ya mobali lokola mbeka ya masumu, mwana ngombe mpe mwana meme ezanga mbeba mpe ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba, \v 4 mpe ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya boyokani, mpo na kobonza lokola mbeka liboso ya Yawe elongo na likabo ya bambuma basangisa na mafuta. Pamba te, na mokolo ya lelo, Yawe akobimela bino. › » \p \v 5 Bamemaki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani biloko oyo Moyize atindaki bango ; mpe lisanga mobimba bapusanaki mpe batelemaki liboso ya Yawe. \v 6 Moyize alobaki : « Tala makambo oyo Yawe atindi bino kosala mpo ete nkembo na Yawe ebimela bino. » \p \v 7 Moyize alobaki na Aron : « Pusana pene ya etumbelo mpe bonza mbeka na yo ya masumu mpe mbeka na yo ya kotumba ; mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na yo moko mpe mpo na bato. Bonza likabo ya bato mpe sala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bango, kolanda ndenge Yawe apesaki mitindo. » \p \v 8 Aron apusanaki pene ya etumbelo mpe akataki kingo ya mwana ngombe lokola mbeka mpo na masumu na ye moko. \v 9 Bongo bana mibali ya Aron bamemelaki ye makila. Aron azindisaki mosapi na ye kati na makila, apakolaki makila yango na maseke ya etumbelo mpe asopaki makila oyo etikalaki na makolo ya etumbelo. \v 10 Atumbaki na etumbelo : mafuta, bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe fwa oyo ewutaki na mbeka mpo na masumu, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \v 11 Atumbaki na moto mosuni mpe poso na libanda ya molako. \p \v 12 Aron akataki kingo ya mbeka ya kotumba. Bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo. \v 13 Bapesaki ye mbeka ya kotumba bakata biteni-biteni elongo na moto, mpe atumbaki yango na etumbelo. \v 14 Asukolaki biloko ya kati mpe makolo, atumbaki yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba. \p \v 15 Aron amemaki likabo oyo ezalaki mpo na bato. Azwaki ntaba ya mobali lokola mbeka mpo na masumu ya bato, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka ya masumu ndenge asalaki na mbeka ya liboso. \v 16 Aron amemaki mbeka ya kotumba mpe abonzaki yango kolanda mitindo. \v 17 Amemaki mpe likabo ya bambuma, atondisaki yango na loboko na ye mpe atumbaki yango na etumbelo elongo na mbeka ya kotumba ya tongo. \v 18 Aron akataki kingo ya ngombe ya mobali mpe ya meme ya mobali lokola mbeka ya boyokani mpo na bato ; bana na ye ya mibali bapesaki ye makila mpe asopaki yango na bangambo nyonso ya etumbelo. \v 19 Bapesaki ye mpe biteni ya mafuta ya ngombe ya mobali mpe ya meme ya mobali, mokila, mafuta ya biloko ya kati, mafuta ya bambuma mibale oyo ezalaka na kati ya loketo mpe bafwa. \v 20 Batiaki biteni yango na batolo ya banyama nyonso mibale mpe Aron atumbaki mafuta na etumbelo. \v 21 Aron atombolaki liboso ya Yawe likabo ya kotombola, batolo mpe mopende ya ngambo ya loboko ya mobali ndenge Moyize atindaki. \p \v 22 Aron atombolaki maboko na ye epai ya bato mpe apambolaki bango ; bongo akitaki sima na kobonza mbeka ya masumu, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani. \p \v 23 Moyize mpe Aron bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani. Bongo tango babimaki, bapambolaki bato, mpe nkembo ya Yawe ebimelaki bato nyonso. \v 24 Moto ebimaki liboso ya Yawe mpe ezikisaki na etumbelo, mbeka ya kotumba mpe biteni ya mafuta. Mpe tango bamonaki bongo, bagangaki na esengo mpe bakweyaki bilongi na bango kino na se. \c 10 \s1 Mabe ya Nadabi mpe Abiyu \p \v 1 Bana mibali ya Aron, Nadabi mpe Abiyu, bazwaki moko na moko mbabola na ye ; batiaki yango makala ya moto mpe batiaki ansa na likolo ya makala yango. Lokola bakokisaki te kolanda oyo basengelaki kosala, bamemaki moto ya mopaya liboso ya Yawe. \v 2 Boye moto ebimaki longwa liboso ya Yawe mpe etumbaki bango nyonso ; bakufaki na mbala moko. \p \v 3 Moyize alobaki na Aron : « Tomoni kokokisama ya maloba oyo Yawe asakolaki tango alobaki : ‹ Bato nyonso oyo bakobelema liboso na Ngai basengeli kotosa bosantu na Ngai, mpe Ngai nakomonisa nkembo na Ngai na miso ya bato nyonso. › » \p Aron alobaki ata liloba moko te. \p \v 4 Moyize abengisaki Mishaeli mpe Elitsafani, bana mibali ya Uzieli, noko ya Aron. Alobaki na bango : « Boya kolongola bibembe ya bandeko na bino liboso ya Esika ya bule mpe bomema yango na libanda ya molako. » \p \v 5 Basalaki ndenge kaka Moyize alobaki na bango : bapusanaki mpe bamemaki bibembe elongo na banzambala na bango na libanda ya molako. \p \v 6 Sima na yango, Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron : « Bopanza te suki ya mito na bino, bopasola te bilamba na bino lokola nde bozali na matanga, noki te bokokufa mpe bokobenda kanda ya Yawe likolo ya lisanga mobimba. Ezali bandeko na bino nyonso ya Isalaele nde bakolela bato oyo Yawe atumbi na moto. \v 7 Kasi bino, bosengeli te kolongwa liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, noki te bokokufa ; pamba te bapakola bino mafuta mpo na kosala mosala ya Yawe. » \p Aron mpe bana na ye batosaki makambo oyo Moyize alobaki na bango. \s1 Mibeko na tina na masanga oyo elangwisaka \p \v 8 Yawe alobaki na Aron : \v 9 « Tango bokobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, yo mpe bana na yo ya mibali, bosengeli te komela masanga oyo elangwisaka, noki te bokokufa. Yango ezali mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe milongo nyonso oyo ekoya sima na bino, \v 10 mpo ete boyeba kokesenisa eloko ya bule mpe eloko oyo ezangi bule, eloko ya peto mpe eloko ya mbindo ; \v 11 lisusu mpo ete boyeba koteya bana ya Isalaele mibeko nyonso oyo Yawe apesaki bino na nzela ya Moyize. » \s1 Mibeko na tina na misuni ya bambeka \p \v 12 Moyize alobaki na Aron, Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron : « Kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bokobanda kozwa likabo oyo ekotikala, oyo ekozika te na moto, mpe bokobanda kolia yango pembeni ya etumbelo ; bokotia yango ezanga levire, pamba te ezali eteni ya bule koleka. \v 13 Bokolia yango na Esika ya bule, pamba te yango nde epesameli yo mpe bana mibali na yo kati na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, ndenge kaka atindaki ngai. \v 14 Kati na bambeka ya boyokani oyo bana ya Isalaele bakobanda kobonza, yo mpe bana na yo, bokobanda kolia, na Esika ya bule, lokola eteni oyo epesameli bino, tolo oyo ekobonzama lokola likabo ya kotombola mpe mopende ya banyama oyo ekobonzama epai ya Yawe. \v 15 Bana ya Isalaele bakobonza elongo na biteni ya mafuta bazikisa na moto : tolo mpe mopende ya banyama oyo batombolaka liboso ya Yawe. Ekokoma ya yo mpe ya bana mibali na yo mpo na libela, ndenge kaka Yawe atindaki ngai. » \p \v 16 Bongo, tango Moyize atunaki ntaba ya mobali oyo ebonzamaki lokola mbeka mpo na masumu, ayokaki ete basilaki kotumba yango na moto. Boye asilikelaki Eleazari mpe Itamari, bana mibali ya Aron, mpe atunaki bango : \pi1 \v 17 — Mpo na nini boliaki te mosuni ya mbeka mpo na masumu na Esika ya bule, pamba te ezali eteni ya bule ? Yawe apesaki bino yango mpo ete bokangola lisanga ya Isalaele na masumu na bango mpe bosala liboso ya Yawe mosala ya bolimbisi masumu na bango. \v 18 Lokola makila ya mbeka yango ekotaki te kati na Esika ya bule, bosengelaki kolia mosuni na yango na Esika ya bule kolanda ndenge nalobaki na tina na yango. \p \v 19 Aron azongiselaki Moyize : \pi1 — Na mokolo oyo bana na ngai babonzelaki Yawe mbeka na bango mpo na masumu mpe mbeka na bango ya kotumba, oyebi malamu makambo oyo ekweyelaki ngai. Soki, na mokolo lokola oyo wana, ngai naliaki mosuni ya mbeka mpo na masumu, Yawe akokaki na Ye kondima ete ngai nasala likambo ya bongo ? \p \v 20 Moyize ayokaki eyano oyo mpe amonaki ete ezali malamu. \c 11 \s1 Mibeko na tina na banyama ya mbindo \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : \v 2 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Kati na banyama nyonso oyo ezali kati na mokili, tala banyama oyo bokoki kolia : \v 3 banyama oyo ezali na litindi epasuka na kati-kati mpe ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu. \p \v 4 Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, mpe kati na banyama oyo litindi na yango epasuka na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia : shamo, pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino ; \v 5 mpanya ya zamba, pamba te ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino ; \v 6 mpanya ya matoyi milayi, pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino ; \v 7 ngulu, pamba te ezali na litindi epasuka na kati-kati kasi ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu : ezali mbindo mpo na bino. \v 8 Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino. \p \v 9 Kati na bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi lokola bibale minene mpe miluka, bokoki kolia nyonso oyo ezali na binyanyeli\f + \fr 11.9 \fr*\ft Enyanyeli elakisi na lifalanse : nageoire\ft*\f* mpe biteku\f + \fr 11.9 \fr*\ft Eteku elakisi na lifalanse : écaille\ft*\f*. \v 10 Kasi bokolia te nyonso oyo ezangi binyanyeli mpe biteku : ezali mbindo mpo na bino. \v 11 Bosengeli te kolia misuni ya banyama yango to kosimba bibembe na yango, pamba te ezali mbindo mpo na bino. \v 12 Bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi kasi ezangi binyanyeli mpe biteku, ezali mbindo mpo na bino. \p \v 13 Kati na bandeke, tala oyo ezali mbindo mpo na bino, oyo bosengeli te kolia : mpongo, engondo, mpongo ya ebale monene, \v 14 nzengo mpe bandeke ya lolenge nyonso oyo eliaka misuni, \v 15 bayanganga ya lolenge nyonso ; \v 16 maligbanga, kumu, ndeke ya ebale monene mpe bakombekombe ya lolenge nyonso, \v 17 esulungutu, libata ya mayi, esulungutu ya monene, \v 18 esulungutu ya pembe, libeke, ndeke oyo eliaka misuni ya kopola, \v 19 nkoko, mokwela ya lolenge nyonso, kengele mpe lolema. \p \v 20 Bokolia te banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu mpe etambolaka na makolo minei ; ezali mbindo mpo na bino. \v 21 Nzokande, kati na banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu, bokoki kolia oyo ezali lisusu na makolo oyo esungaka yango mpo na kopumbwa wuta na mabele : \v 22 lolenge nyonso ya mabanki, mankoko, makelele mpe mayoyo. \v 23 Kasi banyama mike nyonso oyo ezali na mapapu mpe na makolo minei ezali mbindo mpo na bino. \p \v 24 Soki te, ekokomisa bino mbindo ; mpe moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa. \v 25 Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. \p \v 26 Tala banyama mosusu oyo bokomona lokola mbindo : nyama oyo ezali na litindi epasuka te mpe ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu. Moto nyonso oyo akosimba yango akozala mbindo. \v 27 Nyama nyonso oyo ezali na makolo minei mpe etambolaka na matambe na yango ezali mbindo. Moto nyonso oyo akosimba bibembe na yango akozala mbindo kino na pokwa. \v 28 Mpe moto nyonso oyo akolokota bibembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. Bokomona yango mbindo. \p \v 29 Kati na banyama mike oyo etambolaka na mabele, tala oyo bosengeli komona lokola mbindo : mpuku ya se ya mabele, mpuku mpe lolenge nyonso ya miselekete, \v 30 moselekete ya ndako, moselekete ya zelo, moselekete ya zamba, moselekete ya langi ya pondu, mongungu. \v 31 Kati na bibwele nyonso oyo etambolaka na libumu, bokomona oyo wana lokola mbindo. Moto nyonso oyo akosimba yango wana esili kokufa akozala mbindo kino na pokwa. \v 32 Eloko nyonso oyo nyama yango ekokweyela, wana esili kokufa, ekozala mbindo, ezala esalelo ya libaya, elamba, poso to sakosi ; botia yango na mayi mpe ekozala mbindo kino na pokwa ; sima na yango nde ekozonga lisusu peto. \v 33 Soki moko kati na banyama yango ekweyi na mbeki basala na mabele, biloko nyonso oyo ezali kati na mbeki yango ekokoma mbindo mpe bokopanza mbeki yango. \v 34 Soki basopi mayi ya mbeki yango na eloko nyonso oyo baliaka, eloko yango ekokoma mbindo ; ezali mpe bongo mpo na eloko nyonso oyo bamelaka : soki basopeli yango mayi ya mbeki wana, ekokoma mbindo ata soki ezali kati na mbeki ya lolenge nini. \v 35 Eloko nyonso oyo ebembe ya moko kati na banyama wana ekokweya likolo na yango ekokoma mbindo. Soki ezali fulu ya moto to mbabola, esengeli kopanza yango ; pamba te ekozala mbindo mpe bokomona yango bongo. \v 36 Nzokande soki nyama yango ya mbindo ekweyi kati na etima to kati na libulu ya mayi, mayi ekotikala peto kasi moto oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo. \v 37 Soki eteni moko ya ebembe na yango ekweyi likolo ya nkona oyo basengeli kolona, nkona ekotikala peto ; \v 38 kasi soki basilaki kosopela nkona yango mayi, bongo eteni ya ebembe ya nyama ya mbindo ekweyi lisusu likolo na yango, bokomona nkona yango mbindo. \p \v 39 Soki nyama oyo bozali na ndingisa ya kolia ekufi, moto nyonso oyo akosimba ebembe na yango akozala mbindo kino na pokwa ; \v 40 mpe moto oyo akolia mosuni ya nyama oyo esili kokufa asengeli kosukola bilamba na ye, mpe akozala mbindo kino na pokwa. Moto oyo mpe akomema ebembe na yango akosukola bilamba na ye mpe akozala mbindo kino na pokwa. \p \v 41 Bosengeli komona lokola mbindo banyama nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epekisami kolia yango. \v 42 Bokolia ata nyama moko te oyo etambolaka na libumu ; ata oyo etambolaka na makolo minei to koleka, pamba te ezali mbindo. \v 43 Bino moko mpe bomikomisa mbindo te na nzela ya moko kati na bikelamu wana oyo etambolaka na libumu. Bomikomisa mbindo te na nzela na yango to tika ete yango mpe ekomisa bino mbindo te. \v 44 Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na bino. Botambola lokola bato ya bule mpe bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule. Bomikomisa mbindo te na nzela ya banyama nyonso oyo etambolaka na libumu. \v 45 Nazali Yawe oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Boye bozala bule, pamba te Ngai nazali Bule. \p \v 46 Yango wana nde ezali mobeko oyo etali banyama, bandeke, bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi to na libumu. \v 47 Bosengeli kosala bokeseni kati na oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto, kati na bikelamu ya bomoi oyo bakoki kolia mpe oyo bakoki kolia te. › » \c 12 \s1 Kopetolama ya mwasi sima na ye kobota \p \v 1 Yawe ayebisaki Moyize : \v 2 « Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki mwasi aboti mwana mobali, akozala mbindo mikolo sambo lokola tango amonaka makila na ye ya sanza. \v 3 Bongo na mokolo ya mwambe, basengeli kokata mwana ngenga. \v 4 Sima, akolekisa lisusu mikolo tuku misato na misato mpo ete apetolama na makila na ye oyo ebimaki tango abotaki. Akosimba eloko moko te ya bule mpe akokende te na Esika ya bule kino mikolo ya kopetolama na ye ekokoka. \p \v 5 Soki mwasi aboti mwana mwasi, akozala mbindo baposo mibale lokola tango amonaka makila na ye ya sanza. Bongo akolekisa mikolo tuku motoba na motoba mpo ete apetolama na makila na ye oyo ebimaki tango abotaki. \p \v 6 Soki mikolo ya kopetolama na ye ekoki, ezala abotaki mwana mobali to mwana mwasi, akomema epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mwana meme ya mobu moko lokola mbeka ya kotumba mpe ebenga moko ya mboka to ebenga moko ya zamba lokola mbeka mpo na masumu. \v 7 Nganga-Nzambe akobonza bambeka yango liboso ya Yawe mpe sima, akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mwasi. Soki kaka asilisi kosala yango nde mwasi akokoma peto. \p Wana nde mobeko mpo na mwasi oyo aboti mwana mobali to mwana mwasi. \p \v 8 Soki azangi makoki ya kozwa mwana meme, akoki komema bana mibale ya ebenga ya mboka to bibenga mibale ya zamba : moko mpo na mbeka ya kotumba, mpe mosusu, mpo na mbeka mpo na masumu. Sima na Nganga-Nzambe kosala mosala ya bolimbisi masumu, mwasi akokoma peto. › » \c 13 \s1 Mobeko na tina na maba \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : \v 2 « Soki poso ya nzoto ya moto ebimisi bambuma ya mike-mike to esali kolokoto to lipalata, bongo ezwi lolenge ya bokono ya maba, bakomema moto yango epai ya Nganga-Nzambe Aron to epai ya moko kati na bana na ye, Banganga-Nzambe. \v 3 Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto oyo esili kozwa bokono. Soki amoni ete bapwale oyo ezali na esika oyo ezwi bokono na poso ebongwani mpe ekomi pembe ; bongo bapota efungwami na poso ya nzoto, wana elakisi ete ezali bokono ya maba ; mpe Nganga-Nzambe akoki koloba mbala moko ete moto yango azali mbindo. \v 4 Soki lipalata oyo ebimi na poso ezali ya pembe mpe ezali kongenga, bongo efungwami te mpo na kosala pota na poso ya nzoto, Nganga-Nzambe akolongola kati na lisanga, moto oyo abeli mpe akotia ye na esika oyo akozala ye moko mikolo sambo. \v 5 Sima na mikolo yango sambo, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki amoni ete lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto efungwami te mpe epanzani te na nzoto mobimba, akotika moto oyo abeli na esika oyo atiaki ye mpo ete asala lisusu mikolo sambo. \v 6 Sima na mikolo sambo yango, Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki lipalata oyo ebimaki na poso ya nzoto ekawuki mpe epanzani te na nzoto mobimba, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo te ; ezali kolokoto ya pamba. Moto yango akosukola bilamba na ye mpo ete azali mbindo te. \v 7 Nzokande, soki sima na Nganga-Nzambe kotala mpe koloba ete moto yango azali peto, kolokoto yango epanzani na poso, moto yango asengeli kozonga epai ya Nganga-Nzambe mpo ete atala ye lisusu. \v 8 Soki amoni ete kolokoto epanzani na poso ya nzoto, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali na bokono ya maba mpe azali mbindo. \p \v 9 Soki moto azwi bokono ya maba, basengeli komema ye epai ya Nganga-Nzambe. \v 10 Nganga-Nzambe akotala ye malamu. Soki amoni ete poso ya nzoto na ye ebimisi bambuma ya pembe ya mike-mike, ekomisi bapwale ya nzoto na ye pembe, efungwami mpe ebimisi bapota, \v 11 wana elakisi ete ezali bokono ya maba ya libela kati na poso ya nzoto na ye, mpe Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo. Ekozala na tina te kotia ye na esika oyo akozala ye moko, pamba te emonani ete azali mbindo. \v 12 Kasi soki bokono na ye ya maba ebimisi bambuma ya mike-mike na poso ya nzoto na ye mobimba, kobanda na moto kino na makolo, na bisika nyonso oyo Nganga-Nzambe akoki kotala, \v 13 Nganga-Nzambe akotala ye lisusu malamu : soki amoni ete bambuma ya mike-mike etondi ye penza na nzoto mobimba, akoloba ete moto yango azali mbindo te mpo ete akomi pembe nzoto mobimba. \v 14 Kasi akokoma mbindo na mokolo kaka poso ya nzoto na ye ekofungwama mpe ekobimisa bapota. \v 15 Soki kaka Nganga-Nzambe atali mpe amoni bapota oyo ebimi na poso, akoloba ete moto yango azali mbindo mpe bapota oyo efungwami ezali mbindo : ezali bokono ya maba. \v 16 Mpe soki bapota oyo efungwami ekomi lisusu pembe, moto yango akozonga lisusu epai ya Nganga-Nzambe \v 17 mpo ete atala ye malamu. Soki Nganga-Nzambe amoni ete bapota yango ekomi penza pembe, akoloba ete nzoto ezali mbindo te mpe ye moko moto yango azali mbindo te. \p \v 18 Soki moto moko abelaki bibon mpe yango ekawuki ; \v 19 bongo bambuma mike-mike ya pembe to lipalata ya mwa pembe mpe mwa motane ebimi na esika oyo bibon ezalaki, moto yango asengeli kokende epai ya Nganga-Nzambe oyo akotala ye malamu. \v 20 Soki Nganga-Nzambe amoni ete lidusu moko esalemi na poso ya nzoto ya moto wana, bapwale na ye ebongwani mpe ekomi pembe, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba oyo ebimi na esika oyo elembo ya pota ya bibon ezali. \v 21 Nzokande, soki na ngonga ya kotala ye, Nganga-Nzambe amoni te bapwale ya moto yango kobongwana pembe mpe lidusu kosalema na poso na ye, akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo. \v 22 Sima na yango, soki Nganga-Nzambe amoni ete lipalata yango epanzani na poso ya nzoto, akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba. \v 23 Kasi soki lipalata yango epanzani te, wana elakisi ete ezali bobele elembo ya pota ya bibon ; mpe Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali na ye mbindo te. \p \v 24 Soki poso ya nzoto ya moto moko eziki na moto, bongo litono moko ya pembe to ya motane esalemi kati na esika oyo eziki, \v 25 Nganga-Nzambe akotala moto yango malamu : soki bapwale oyo ezali kati na litono ebongwani, ekomi pembe mpe litono yango kati na poso ebongwani, esali pota : elakisi ete ezali bokono ya maba nde ebimi na esika oyo ezikaki. Boye, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te azali na bokono ya maba. \p \v 26 Nzokande, soki tango Nganga-Nzambe atali moto yango malamu, amoni te bapwale ya pembe kati na litono ; mpe soki litono ebongwani te, esali na yango pota te na poso mpe epanzani te ; akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo. \v 27 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki litono epanzani solo na poso, Nganga-Nzambe akoloba ete moto yango azali mbindo, pamba te ezali bokono ya maba. \v 28 Nzokande, soki litono yango etikali kaka esika moko, epanzani te na poso kasi ekawuki, wana etalisi ete ezali kaka kobeba ya poso ya nzoto mpo na kozika na ye na moto. Boye Nganga-Nzambe akoloba ete azali mbindo te, pamba te ezali kaka elembo ya pota ya moto. \p \v 29 Soki mobali to mwasi abeli bokono ya poso ya nzoto, ezala na moto to na mbanga, \v 30 Nganga-Nzambe akotala malamu poso ya nzoto ya moto yango : soki amoni ete bapota ebimi na poso ya nzoto ya moto yango, bapwale eteli mpe kotela na yango epanzani, akoloba ete mobali to mwasi yango azali mbindo, pamba te ezali lipalata ya moto to ya mbanga. \v 31 Nzokande, soki Nganga-Nzambe amoni ete poso ya nzoto ebimisi na yango bapota te, atako bapwale ezali kaka ya mwindo, akotia ye na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo. \v 32 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala malamu poso : soki bokono yango epanzani te, bapwale eteli te, bapota ebimi te na poso, \v 33 mobeli akokokola suki na ye kasi akotika suki oyo ezali na bisika oyo bokono emonani. Bongo Nganga-Nzambe akotia lisusu mobeli na esika oyo akozala ye moko mpo na mikolo sambo. \v 34 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala malamu bokono yango ya poso ya nzoto : soki epanzani te mpe ebimisi bapota te, Nganga-Nzambe akoloba ete mobali to mwasi yango azali mbindo te. Boye mobali to mwasi yango akosukola kaka bilamba na ye mpe akokoma peto. \v 35 Nzokande, atako Nganga-Nzambe asili koloba ete mobali to mwasi wana azali peto kasi soki bokono yango epanzani ye kaka na poso ya nzoto, \v 36 Nganga-Nzambe akotala malamu : lokola bokono epanzani ye penza na poso ya nzoto, ekozala na tina te ete Nganga-Nzambe aluka lisusu koyeba soki bapwale eteli to te, pamba te mobali to mwasi yango azali penza mbindo. \v 37 Nzokande, soki bokono epanzani na yango te mpe bapwale ya mwindo ebimi na bisika oyo bokono ezali, wana elakisi ete mobeli abiki na bokono na ye mpe azali peto : Nganga-Nzambe akoloba ete azali peto. \p \v 38 Soki mobali to mwasi amoni matono ya pembe kobima na poso ya nzoto na ye, \v 39 Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki pembe ya matono yango ezali na yango ya pete, wana elakisi ete ezali na yango penza bokono te : moto yango azali peto. \p \v 40 Soki suki ya mobali moko ekatani, bongo akomi na libandi, elakisi te ete akomi mbindo. \v 41 Soki suki yango ekataneli ye na mbunzu, bongo akomi na libandi, wana elakisi ete azali peto. \v 42 Kasi soki lipalata moko ya mwa pembe mpe ya mwa motane ebimi ye na libandi, ezala na dikosi to na mbunzu, wana elakisi ete bokono ya maba ebandi kobima ye na libandi. \v 43 Nganga-Nzambe akotala ye malamu : soki amoni ete bokono yango ya maba ebandi kobimisa bambuma ya mike-mike ya mwa pembe mpe ya mwa motane, ezala na dikosi to na mbunzu ; wana elakisi ete azali na bokono ya maba na libandi. \v 44 Boye mobali yango azali na bokono ya maba, azali mbindo ; mpe Nganga-Nzambe asengeli koloba ete azali mbindo mpo na bokono oyo akomi na yango na moto. \p \v 45 Moto oyo azwi bokono ya boye asengeli kolata bilamba epasuka, akokatisa suki te, akozipa mandefu na ye mpe akoganga : ‹ Mbindo ! Mbindo ! › \v 46 Lokola bokono oyo akomi na yango ezali mbindo, ye moko mpe akozala mbindo. Boye akotonga ndako na ye mosika na bato mpe akovanda libanda ya molako. \s1 Mobeko na tina na mbindo kati na bilamba \p \v 47 Soki elamba ya kolata ezwi mbungi, ebebi mpe ekomi lokola nzoto ya moto oyo abeli bokono ya maba, ezala elamba basala na lino to na bapwale ya meme \v 48 to elamba ya pete to elamba ya lino mpo na komibatela na malili to elamba basala na bapwale ya meme to mpe ezala mbungi yango emonani na likolo ya eloko basala na kapo ya pete to na kapo ya makasi, \v 49 soki mbungi yango ezwi langi ya mayi ya pondu to ezwi langi ya motane, na likolo ya elamba, wana elakisi ete ezali litono ya maba ; boye basengeli komema yango epai ya Nganga-Nzambe mpo ete atala yango malamu. \v 50 Sima na Nganga-Nzambe kotala yango malamu, akotia yango na esika oyo ekozala yango moko mpo na mikolo sambo. \v 51 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akotala lisusu malamu litono yango. Soki amoni ete epanzani na likolo ya elamba ya kolata, ya elamba ya pamba, ya elamba ya malili to na likolo ya kapo ; wana elakisi ete ezali litono ya bokono ya maba oyo bakoki kolongola te mpe elakisi lisusu ete elamba yango ezali mbindo. \v 52 Boye basengeli kotumba elamba yango, atako ezali ndenge nini, pamba te ezali na litono oyo bakoki kolongola te : basengeli kotumba yango. \p \v 53 Nzokande, soki sima na kotala elamba yango malamu, Nganga-Nzambe amoni ete litono epanzani te na likolo ya elamba yango to na likolo ya kapo, \v 54 Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete basukola yango ; bongo akotia yango lisusu na esika oyo ekozala yango moko mpo na mikolo sambo. \v 55 Sima na kosukola yango, Nganga-Nzambe akotala lisusu malamu litono ; soki amoni ete ebongwani te mpe epanzani na yango te, wana elakisi ete elamba ezali mbindo mpe esengeli kotumba yango na moto : ezali elamba oyo ebebi na liboso mpe na sima. \v 56 Nzokande, soki Nganga-Nzambe, sima na kotala malamu elamba, amoni ete litono elongwaki na tango basukolaki elamba ; akokata kaka eteni ya elamba epai wapi litono ezali. \v 57 Soki sima na mwa tango, litono yango ezongi lisusu, wana elakisi ete ezali bokono ya maba oyo ezali kokola. Boye esengeli kotumba na moto eteni oyo ezali na litono na elamba. \v 58 Tango bakosukola elamba oyo ezali na litono, soki litono yango elongwe, esengeli kosukola yango lisusu na mbala ya mibale mpo ete ezala peto. » \p \v 59 Wana nde mitindo oyo etali litono ya bokono ya maba na likolo ya elamba basala na bapwale ya meme to elamba ya lino, na likolo ya eloko nyonso basala na poso ya nyama, mpo na koyeba soki elamba ezali peto to mbindo. \c 14 \s1 Mibeko na tina na kopetolama ya bato na maba \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Tala mobeko oyo etali moto oyo azali na bokono ya maba, na mokolo ya kopetolama na ye : ‹ Basengeli komema moto oyo azali na bokono ya maba epai ya Nganga-Nzambe. \v 3 Nganga-Nzambe akokende libanda ya molako mpo na kotala ye malamu. Soki abiki na bokono na ye ya maba, \v 4 Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete bamema biloko oyo, mpo na kopetolama ya moto oyo abiki na bokono ya maba : bandeke mibale ya peto mpe ya bomoi, eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope. \v 5 Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete bakata kingo ya ndeke moko kati na bandeke wana mibale, na likolo ya sani basala na mabele mpe etondi na mayi ya peto. \v 6 Bongo akokamata ndeke ya mibale, ya bomoi, elongo na eteni ya nzete ya sedele, eteni ya elamba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope ; akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo bawuti kokata kingo na likolo ya mayi ya peto ; \v 7 akosopa makila yango mbala sambo na nzoto ya moto oyo asengeli kopetolama na maba. Sima na yango, Nganga-Nzambe akotatola ete moto yango akomi peto ; mpe akotika ndeke oyo ya bomoi kopumbwa mpe kokende na zamba. \p \v 8 Moto oyo asengeli na kopetolama akosukola bilamba na ye, akokata bapwale na ye nyonso mpe akomisukola nzoto na mayi ; sima na yango, akokoma peto. Bongo, akoki kozonga kati na molako, kasi akovanda mikolo sambo libanda ya ndako na ye ya kapo. \v 9 Na mokolo ya sambo, akokata lisusu bapwale na ye, suki na ye ya moto mpe ya miso, mandefu na ye mpe bapwale nyonso mosusu ; akosukola bilamba na ye mpe akomisukola nzoto na mayi. Na bongo, akozala peto. \p \v 10 Na mokolo ya mwambe, akokamata bana meme mibale ezanga mbeba elongo na meme moko ya mwasi ezanga mbeba mpe esili kokokisa mobu moko, kilo libwa ya farine basangisa na mafuta lokola, likabo ya bambuma, mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta. \v 11 Nganga-Nzambe oyo azali kosala mosala ya kopetola akotia ye elongo na makabo na ye liboso ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 12 Nganga-Nzambe akozwa mwana meme ya liboso mpe akobonza yango elongo na kati-kati ya litele moko ya mafuta lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani ; akotombola yango liboso ya Yawe. \v 13 Akokata mwana meme yango kingo na esika oyo babomaka banyama oyo babonzi epai ya Nzambe lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu mpe lokola mbeka ya kotumba, kati na esika yango ya bule ; pamba te, ezala mbeka mpo na kozongisa boyokani to mbeka mpo na bolimbisi masumu, ezali ya Nganga-Nzambe : ezali eloko ya bule koleka. \v 14 Nganga-Nzambe akozwa makila ya mbeka oyo ebonzami mpo na kozongisa boyokani, akopakola yango na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali. \v 15 Nganga-Nzambe akokamata kati-kati ya litele ya mafuta mpe akosopa ndambo na yango na loboko na ye ya ngambo ya mwasi. \v 16 Nganga-Nzambe akozindisa, kati na mafuta oyo asili kosopa na loboko na ye ya ngambo ya mwasi, mosapi ya mibale ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe akosalela yango mpo na kosopa mbala sambo mafuta liboso ya Yawe. \v 17 Bongo kati na mafuta oyo ekotikala ye na loboko, Nganga-Nzambe akokamata ndambo na yango mpo na kopakola na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali, kaka na esika oyo awuti kotia makila ya mwana meme oyo ebonzami lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani. \v 18 Bongo Nganga-Nzambe akosopa, na moto ya moto oyo azali komipetola, mafuta oyo ekotikala na loboko na ye mpo na kosala, liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu na ye. \v 19 Sima na yango, Nganga-Nzambe akobonza, liboso ya Nzambe, mbeka mpo na masumu, mpo ete asala mosala ya bolimbisi masumu ya moto oyo azali komipetola na mbindo na ye ; mpe akokata lisusu kingo ya nyama oyo ebonzami lokola mbeka ya kotumba. \v 20 Nganga-Nzambe akotia mbeka yango na likolo ya etumbelo elongo na makabo ya farine. Boye, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango, mpe akozala peto. \p \v 21 Soki moto yango azali mobola, bongo akoki kozwa te biloko wana nyonso, akokamata kaka mwana meme moko lokola mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kobonza yango mpo na mosala ya bolimbisi masumu ya moto yango ; akobakisa na likolo na yango lokola makabo bakilo misato ya farine basangisa na mafuta mpe kati-kati ya litele moko ya mafuta. \v 22 Akobonza lisusu bibenga mibale kolanda bozwi na ye : moko lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mosusu lokola mbeka ya kotumba. \v 23 Na mokolo ya mwambe, akomema yango epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, liboso ya Yawe, mpo na kopetolama na ye. \v 24 Nganga-Nzambe akokamata mafuta mpe mwana meme oyo ebonzami lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu, mpe akobonza yango epai na Yawe. \v 25 Akokata kingo ya mwana meme yango oyo ebonzami lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu. Nganga-Nzambe akotia makila ya mbeka mpo na bolimbisi masumu, na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali. \v 26 Nganga-Nzambe akosopa lisusu ndambo ya mafuta na loboko na ye ya ngambo ya mwasi. \v 27 Mpe na nzela ya mosapi ya mibale ya loboko na ye ya ngambo ya mobali, Nganga-Nzambe akokamata mpe akosopa mafuta yango mbala sambo, liboso ya Yawe. \v 28 Nganga-Nzambe akokamata ndambo mosusu mpe akotia yango na likolo ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali, ya moto oyo azali komipetola, na mosapi ya liboso ya loboko na ye ya ngambo ya mobali mpe na mosapi na ye liboso ya lokolo na ye ya ngambo ya loboko ya mobali, mpe na bisika oyo atiaki makila ya mbeka mpo na bolimbisi masumu. \v 29 Bongo mpo na ndambo ya makila oyo ekotikala na loboko na ye ya mwasi, Nganga-Nzambe akosopa yango na moto ya moto oyo azali komipetola, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu na ye liboso ya Yawe. \v 30 Nganga-Nzambe akozwa moko kati na bibenga mibale oyo moto wana abonzi kolanda bozwi na ye \v 31 mpe akobonza yango lokola mbeka mpo na masumu ; bongo akobonza ebenga mosusu lokola mbeka ya kotumba elongo na makabo ya farine. Mpe Nganga-Nzambe akosala liboso ya Yawe, mosala ya bolimbisi masumu ya moto oyo azali komipetola. › \p \v 32 Wana nde mibeko oyo ezali kotala moto oyo abeli bokono ya maba, oyo azali penza na makoki te mpo na kopetolama na ye. » \s1 Maba kati na bandako \p \v 33 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : \v 34 « Tango bokokota na mokili ya Kanana oyo napesi bino, soki natie litono ya maba na ndako moko ya mokili oyo napesi bino, \v 35 nkolo ndako asengeli kokende koloba boye epai ya Nganga-Nzambe : ‹ Namoni litono ya maba kati na ndako na ngai. › \v 36 Bongo Nganga-Nzambe akopesa mitindo ya kobima na ndako yango liboso ete ye akota kuna mpo na kotala malamu litono yango. Bongo akoloba ete biloko nyonso kati na ndako yango ezali peto. Sima na yango, Nganga-Nzambe akokota kati na yango mpo na kotala malamu. \p \v 37 Akobanda kotala malamu litono yango kati na mir. Soki amoni ete ezwi langi ya mayi ya pondu to ya motane mpe esali lidusu kati na mir, \v 38 Nganga-Nzambe asengeli kobima wuta na ndako mpe kotelema na ekotelo na yango ; bongo akokanga ndako yango mpo na mikolo sambo. \v 39 Na mokolo ya sambo, Nganga-Nzambe akozonga mpo na kotala lisusu malamu. Soki litono yango epanzani kati na mir, \v 40 Nganga-Nzambe akopesa mitindo ete balongola mabanga oyo ebebi na matono mpe babwaka yango libanda ya engumba na esika ya mbindo. \v 41 Bongo akosenga ete bakokola mir nyonso na ngambo na yango ya kati mpe babwaka libanda ya engumba na esika ya mbindo mabele nyonso oyo bakokola. \v 42 Sima, bakozongisa mabanga mosusu na bisika oyo balongolaki mpe bakozwa mabele mosusu mpo na kopakola ndako. \p \v 43 Sima na kolongola mabanga oyo ebebaki, kokokola bamir mpe kopakola mabele mosusu, soki litono esalemi lisusu, \v 44 Nganga-Nzambe akokende kotala lisusu malamu : soki amoni solo ete litono esalemi lisusu mpe epanzani, wana elakisi ete maba ezali kati na ndako mpe ndako yango ekokoma mbindo. \v 45 Boye bakokweyisa ndako yango : mabanga mpe mabaya na yango nyonso ekobwakama na libanda ya engumba na esika ya mbindo. \p \v 46 Na mikolo nyonso oyo ndako ekozala ya kokangama, moto nyonso oyo akokota akozala mbindo kino na pokwa. \v 47 Moto nyonso oyo akolekisa butu to kolia kati na ndako yango, asengeli kosukola bilamba na ye. \p \v 48 Nzokande, soki na ngonga ya kotala malamu ndako sima na kopakola yango mabele, Nganga-Nzambe amoni te kobima ya litono, wana akoloba ete ndako yango ezali peto, pamba te mbindo na yango esili kolongwa. \v 49 Boye mpo na kopetolama na yango, Nganga-Nzambe akozwa bandeke mibale, mabaya ya sedele, eteni ya elemba ya motane makasi mpe eteni ya nzete ya izope ; \v 50 akokata kingo ya ndeke ya liboso na likolo ya sani oyo basala na mabele mpe ezali na mayi ya peto kati na yango. \v 51 Akokamata mabaya ya sedele, eteni ya nzete ya izope, eteni ya elamba ya motane makasi mpe ndeke mosusu, akozindisa yango kati na makila ya ndeke oyo asilaki kokata kingo mpe kati na mayi ya peto oyo akobwaka na likolo ya ndako mbala sambo. \v 52 Akopetola ndako na nzela ya makila ya ndeke, ya mayi ya peto, ya ndeke oyo ezali na bomoi, ya mabaya ya sedele, ya eteni ya nzete ya izope mpe ya eteni ya elamba ya motane. \v 53 Bongo akotika ndeke oyo etikalaki ya bomoi kokende na zamba, na libanda ya engumba. Ezali ndenge wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu ya ndako ; mpe ndako yango ekokoma peto. » \p \v 54 Wana nde mibeko oyo etali lolenge nyonso ya maba, litono, \v 55 maba ya elamba mpe ya ndako, \v 56 bambuma ya mike-mike, mapalata mpe matono oyo ezali kongenga, \v 57 mpo na kotalisa soki moto azali mbindo to te. Yango nde mibeko oyo etali maba. \c 15 \s1 Mbindo ya nzoto ya mibali \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : \v 2 « Boloba na bana ya Isalaele mpe boyebisa bango : ‹ Soki nzoto ya mibali ya mobali moko ezali kobimisa tofina to mayi, kobima yango ekomisi mobali yango mbindo. \v 3 Ata soki tofina to mayi ekobi kobima na nzoto na ye to ekangami, azali kaka mbindo. Tala ndenge kobima ya tofina to ya mayi yango ekomisaka moto mbindo : \v 4 mbeto nyonso oyo mobali oyo azali kobimisa tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akolala to eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo. \v 5 Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. \v 6 Moto oyo akovanda likolo ya eloko oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali avandelaki, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. \v 7 Moto oyo akosimba mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino pokwa. \v 8 Soki mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali abwakeli moto oyo azali peto soyi, moto yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. \v 9 Eloko nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akovandela likolo ya mpunda tango azali kosala mobembo, ekokoma mbindo. \v 10 Moto nyonso oyo akosimba eloko nyonso kati na biloko oyo ezali na se ya mobali yango, akozala mbindo kino na pokwa ; mpe moto nyonso oyo akolokota biloko yango asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. \v 11 Moto nyonso oyo mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali akosimba na kozanga komisukola maboko na mayi, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. \v 12 Mbeki nyonso oyo esalema na mabele oyo bakosimba na mobali oyo azali kobima tofina to mayi, basengeli kopanza yango ; mpe eloko nyonso oyo esalema na nzete basengeli kosukola yango na mayi. \p \v 13 Soki tofina to mayi etiki kobima na nzoto ya mibali ya mobali yango, akotanga mikolo sambo mpo na kopetolama na ye ; sima akosukola bilamba na ye, akosukola nzoto na ye na mayi ya etima mpe akokoma peto. \v 14 Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akoya liboso ya Yawe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Akopesa yango epai ya Nganga-Nzambe. \v 15 Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mobali yango liboso ya Yawe likolo ya kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali. \p \v 16 Soki mobali abimi mayi ya mibali na nzoto na ye ya mibali, asengeli kosukola nzoto na ye mobimba na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa. \v 17 Elamba nyonso to eloko nyonso oyo esalema na poso ya nyama oyo ekweyeli mayi ya mibali, esengeli basukola yango na mayi, mpe ekozala mbindo kino na pokwa. \p \v 18 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi, bango mibale basengeli kosukola nzoto na mayi mpe bakozala mbindo kino na pokwa. \s1 Mbindo ya nzoto ya basi \p \v 19 Soki mwasi amoni makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo sambo, mpe moto nyonso oyo akosimba ye akozala mbindo kino na pokwa. \v 20 Eloko nyonso oyo akolalela na tango wana ekokoma mbindo, mpe eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo. \v 21 Moto nyonso oyo akosimba mbeto na ye akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi mpe akozala mbindo kino na pokwa. \v 22 Moto nyonso oyo akosimba eloko oyo mwasi yango avandeli, asengeli kosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi, mpe akozala mbindo kino na pokwa. \v 23 Soki eloko ezali na mbeto na ye to likolo ya eloko oyo avandeli, moto oyo akosimba yango akozala mbindo kino na pokwa. \v 24 Soki mobali moko asangisi na ye nzoto mpe makila na ye ya sanza ezwi mobali yango, akozala mbindo mikolo sambo. Bongo mbeto nyonso oyo mobali yango akolalela, ekokoma mbindo. \p \v 25 Soki mwasi azali kobima makila mikolo ebele na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza te to azali kokoba kobima makila penza na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza, akozala mbindo mikolo nyonso oyo azali kobima makila lokola na mikolo oyo amonaka makila na ye ya sanza. \v 26 Mbeto nyonso oyo akolalela na tango oyo makila na ye ezali kokoba kobima, ekozala mbindo ; mpe eloko nyonso oyo akovandela ekokoma mbindo lokola na tango oyo amonaka makila na ye ya sanza. \v 27 Moto nyonso oyo akosimba biloko wana akokoma mbindo. Asengeli kosukola bilamba mpe nzoto na ye na mayi ; akozala mbindo kino na pokwa. \p \v 28 Soki apetolami na kobima makila na ye, asengeli kotanga mikolo sambo ; sima na yango, akokoma peto. \v 29 Na mokolo ya mwambe, akozwa bibenga mibale ya zamba to bana bibenga mibale mpe akomema yango epai ya Nganga-Nzambe na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 30 Nganga-Nzambe akobonza yango, moko lokola mbeka ya masumu mpe mosusu lokola mbeka ya kotumba. Na nzela wana nde Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na mwasi yango liboso ya Yawe mpo na mbindo ya kobima makila na ye. \v 31 Bosengeli kosala ete bana ya Isalaele bazala mosika ya makambo oyo ekokomisa bango mbindo ; boye bakokufa te na mbindo na bango, na kokomisa mbindo Mongombo na Ngai, oyo ezali kati na bango. › \p \v 32 Oyo nde mibeko mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi na nzoto na ye ya mibali to mpo na mobali oyo abimi mayi ya mibali oyo ekomisi ye mbindo ; \v 33 mpo na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza mpe mpo na mobali oyo azali kobima tofina to mayi to mpo na mwasi oyo azali kobima makila, mpe mpo na mobali oyo asangisi nzoto na mwasi ya mbindo. » \c 16 \s1 Mokolo ya bolimbisi masumu \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize, sima na kufa ya bana mibali mibale ya Aron, oyo bakufaki tango bapusanaki liboso ya Yawe. \v 2 Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron, ndeko na yo ya mobali, ete akotaka tango nyonso te na Esika ya bule, na sima ya rido, liboso ya esika ya bolimbisi masumu, likolo ya Sanduku mpo ete akufa te ; pamba te namimonisaka na nzela ya lipata likolo ya esika ya bolimbisi masumu. \p \v 3 Tala ndenge Aron akobanda kokota na Esika ya bule : akomema ngombe moko ya mobali lokola mbeka ya masumu mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya kotumba. \v 4 Akolata na nzoto na ye : nzambala ya bule basala na lino mpe bakaputula ya lino ; akomikanga mokaba ya lino mpe kitendi ya lino na moto na ye. Lokola bilamba oyo ezali ya bule, asengeli komisukola nzoto na ye na mayi liboso ya kolata yango. \v 5 Aron akozwa kati na lisanga ya bana ya Isalaele : bantaba mibale ya mibali lokola mbeka ya masumu mpe meme moko ya mobali lokola mbeka ya kotumba. \p \v 6 Aron akobonza mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na ndako na ye. \v 7 Akozwa bantaba ya mibali nyonso mibale mpe akotia yango liboso ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 8 Aron akobeta zeke mpo na bantaba ya mibali nyonso mibale : moko mpo na Yawe, mpe mosusu, mpo na Azazeli\f + \fr 16.8 \fr*\ft Azazeli ezali kombo ya zabolo moko oyo evandaka na bisika bikawuka.\ft*\f*. \v 9 Bongo Aron akomema ntaba oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Yawe, mpe akobonza yango lokola mbeka mpo na masumu. \v 10 Kasi ntaba ya mobali oyo zeke ekolakisa ete ezali mpo na Azazeli, akomema yango ya bomoi liboso ya Yawe mpo ete basala na yango mosala ya bolimbisi masumu, bongo bakotinda yango na esobe mpo na Azazeli. \p \v 11 Aron akobonza, mpo na ye moko, ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu na ye moko mpe ya ndako na ye. Sima na ye kokata kingo ya ngombe ya mobali oyo abonzi mpo na ye moko lokola mbeka ya masumu, \v 12 akotondisa mbabola ya kotumba malasi na makala ya moto oyo ewuti na etumbelo liboso ya Yawe mpe akotondisa maboko na ye mibale na malasi ya putulu, bongo akomema yango na sima ya rido. \v 13 Akotia malasi na moto liboso ya Yawe mpo ete milinga na yango ezipa esika ya bolimbisi oyo ezali likolo ya Sanduku ya Boyokani mpo ete akufa te. \v 14 Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka yango liboso ya esika ya bolimbisi masumu, na ngambo ya este. Boye, na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo liboso ya esika ya bolimbisi masumu. \v 15 Akokata kingo ya ntaba ya mobali ya mbeka mpo na masumu ya bato mpe akomema makila na yango na sima ya rido. Bongo akosala na makila yango ndenge asalaki na makila ya ngombe ya mobali : akobwaka liboso mpe likolo ya esika ya bolimbisi masumu. \p \v 16 Na nzela wana, akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule likolo ya mbindo, botomboki mpe masumu ya bana ya Isalaele. Akosala mpe ndenge moko mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani oyo ezali elongo na bango kati na mbindo na bango. \v 17 Moto moko te akozala kati na Ndako ya kapo ya Bokutani tango Aron akokota kuna mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu kati na Esika ya bule kino tango akobima na libanda. Mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko, mpo na ndako na ye mpe mpo na lisanga mobimba ya Isalaele. \p \v 18 Sima na yango, akobima mpo na kokende na etumbelo oyo ezali liboso ya Yawe mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na etumbelo yango. Akozwa makila ya ngombe ya mobali mpe ya ntaba ya mobali mpe akotia yango na maseke ya etumbelo. \v 19 Mpe na nzela ya mosapi na ye, akobwaka makila mbala sambo na etumbelo. Ezali na nzela wana nde akopetola mpe akobulisa yango na mbindo ya bana ya Isalaele. \p \v 20 Tango Aron akosilisa kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Esika ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani mpe mpo na etumbelo, akomema ntaba ya mobali ya bomoi. \v 21 Aron akotia maboko na ye mibale na moto ya ntaba yango, akotubela mabe, botomboki mpe masumu nyonso ya bana ya Isalaele na moto ya ntaba yango. Na nzela wana akotia masumu nyonso na moto ya ntaba yango ; sima akopona moto moko mpo na kobengana ntaba yango na esobe. \v 22 Boye ntaba ekomema masumu na bango nyonso na esika oyo ezanga bato, mpe moto yango akotika ntaba kokende na esobe. \p \v 23 Bongo Aron akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, akolongola bilamba ya lino oyo alataki tango akotaki na Esika ya bule mpe akotika yango kuna. \v 24 Akosukola nzoto na ye na mayi na esika moko ya bule ; mpe akolata bilamba na ye. Sima, akobima libanda mpe akobonza mbeka ya kotumba mpo na ye moko mpe mpo na bato. Na nzela wana nde akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ye moko mpe mpo na bato. \v 25 Akotumba mafuta ya mbeka ya masumu na likolo ya etumbelo. \p \v 26 Moto oyo akobengana ntaba ya mobali mpo na Azazeli, asengeli kosukola nzoto na ye na mayi ; mpe sima na yango, akozonga na molako. \v 27 Bakomema libanda ya molako ngombe ya mobali mpe ntaba ya mobali ya mbeka ya masumu oyo bamemaki makila na yango na Esika ya bule mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpe bakotumba na moto poso na yango, misuni na yango mpe banyei na yango. \v 28 Moto oyo akotumba yango asengeli kosukola na mayi bilamba na ye mpe nzoto na ye, sima na yango nde akoki kozonga na molako. \p \v 29 Tala malako oyo bosengeli kosalela mpo na libela : na mokolo ya zomi ya sanza ya sambo, ezala mwana mboka to mopaya oyo avandi kati na bino, bosengeli komikitisa mpe bokosala mosala ata moko te, \v 30 pamba te na mokolo wana nde bokosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na bino mpe kopetolama bino. Boye bokopetolama na masumu na bino nyonso liboso ya Yawe. \v 31 Ekozala mpo na bino mokolo ya Saba, mokolo ya bopemi, mpe bosengeli komikitisa. Ezali malako ya libela. \p \v 32 Nganga-Nzambe oyo bakopakola mafuta mpe akobulisama mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe na esika ya tata na ye, akosala mosala ya bolimbisi masumu. Akolata bilamba ya bule ya lino. \v 33 Akosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na ndako ya bule, mpo na Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na etumbelo, mpo na Nganga-Nzambe mpe mpo na bato nyonso ya lisanga. \p \v 34 Oyo nde ekozala mpo na bino malako ya libela : mbala moko na mobu, bokosala mosala ya bolimbisi masumu nyonso ya bana ya Isalaele. » \p Mpe basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \c 17 \s1 Mibeko na tina na makila \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Yebisa Aron, bana na ye ya mibali mpe bana nyonso ya Isalaele, mpe loba na bango : ‹ Tala maloba oyo Yawe alobi : \v 3 ‘ Moto nyonso kati na bana ya Isalaele, oyo akokata kingo ya ngombe, ya meme to ya ntaba, ezala kati na molako to na libanda ya molako ; \v 4 mpe amemi yango te na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kobonza yango lokola likabo epai na Yawe liboso ya Mongombo ya Yawe, makila na yango ekotangama na moto ya moto yango. Lokola asopi makila, bakolongola ye kati na bato na ye. \v 5 Boye, na esika ete bana ya Isalaele bamemaka bambeka na bango na bilanga, bakomema yango mpo na Yawe epai ya Nganga-Nzambe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani lokola mbeka ya boyokani epai na Yawe. \v 6 Nganga-Nzambe akobwaka makila na etumbelo ya Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe akotumba mafuta na yango lokola mbeka oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. \v 7 Bana ya Isalaele bakobonza lisusu te bambeka na bango epai banzambe ya bikeko ya bantaba ya mibali, oyo basambelaka. Oyo ekozala malako ya libela mpo na bango mpe mpo na milongo oyo ekoya. ’ › \p \v 8 Loba na bango : ‹ Moto nyonso ya Isalaele to mopaya nyonso oyo azali kati na bango, oyo akobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu, \v 9 na kozanga komema yango na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kobonza yango epai ya Yawe, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele. \p \v 10 Nakobalukela mpe nakolongola kati na bato na ye, moto nyonso oyo akolia makila, azala moto ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na bango ; \v 11 pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila. Napesi bino yango mpo ete bosala na yango mosala ya bolimbisi masumu mpo na bomoi na bino, na etumbelo. Lokola bomoi ya moto ezali kati na makila, yango wana makila esalaka mosala ya bolimbisi masumu. \v 12 Boye, nalobaki na bana ya Isalaele : ‘ Moto moko te mpe mopaya moko te kati na bino akoki kolia makila. ’ \p \v 13 Moto nyonso kati na bana ya Isalaele to mopaya oyo avandi kati na bango, oyo akokende bokila mpe akokanga nyama ya zamba to ndeke oyo baliaka, asengeli kosopa makila na yango mpe kozipa yango na mabele, pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila na yango. \v 14 Yango wana, nalobaki na bana ya Isalaele : ‘ Bokoki kolia makila ya ekelamu ata moko te, pamba te bomoi ya ekelamu nyonso ezali kati na makila na yango. Moto oyo akolia yango, bakolongola ye kati na bato. ’ \s1 Mobeko na tina na nyama ekufa \p \v 15 Moto nyonso, azala mwana mboka to mopaya, oyo akolia mosuni ya nyama oyo ekufi yango moko to oyo babomi na nyama ya zamba, akosukola bilamba na ye mpe nzoto na ye na mayi. Akozala mbindo kino na pokwa, sima na yango akokoma peto. \v 16 Kasi soki asukoli bilamba mpe nzoto na ye te, akomema ngambo. › » \c 18 \s1 Mobeko na tina na kosangisa nzoto \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. \v 3 Bokoki te kosala makambo ndenge esalemaka na Ejipito epai wapi bozalaki kovanda to na Kanana epai wapi nazali komema bino. \v 4 Bosengeli kotosa bobele mibeko mpe bikateli na Ngai. Nazali Yawe, Nzambe na bino. \p \v 5 Bobatela mitindo mpe mibeko na Ngai, pamba te moto oyo akosalela yango akobika bomoi na ye na nzela na yango. Nazali Yawe. \p \v 6 Mobali moko te akosangisa nzoto na mwasi ya libota na ye penza. Nazali Yawe. \p \v 7 Okosambwisa te tata na yo na kosangisa nzoto na mama na yo. Lokola azali mama na yo, kosambwisa ye te. \p \v 8 Okosangisa nzoto te na mwasi mosusu ya tata na yo, soki te okosambwisa tata na yo. \v 9 Okosangisa nzoto te na ndeko na yo ya mwasi, ezala na mwana mwasi ya tata na yo to ya mama na yo, oyo abotami na ndako to na libanda ya ndako. \p \v 10 Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwana na yo ya mobali to ya mwasi ; kosambwisa ye te. \p \v 11 Okosangisa nzoto te na mwana mwasi ya mwasi ya tata na yo, azali ndeko na yo ya mwasi. \p \v 12 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya tata na yo, azali tata mwasi na yo. \v 13 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya mama na yo, azali mama leki to mama kulutu na yo. \p \v 14 Okosambwisa te ndeko mobali ya tata na yo na kosangisa nzoto na mwasi na ye. Azali mama na yo. \p \v 15 Okosangisa nzoto te na bokilo na yo. Azali mwasi ya mwana na yo, kosangisa na ye nzoto te. \p \v 16 Okosambwisa te ndeko na yo ya mobali na kosangisa nzoto na mwasi na ye. \p \v 17 Okosangisa nzoto te na mama mpe na mwana na ye ya mwasi to na mwana mwasi ya mwana na ye ya mobali mpe ya mwasi ; pamba te bazali makila moko mpe ekozala likambo ya nkele penza na miso ya Nzambe. \p \v 18 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya mwasi na yo, wana mwasi na yo azali nanu na bomoi, noki te ekoyeisa bombanda. \p \v 19 Okosangisa nzoto te na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza, pamba te azali mbindo. \p \v 20 Okosangisa nzoto te na mwasi ya moninga na yo, noki te okokoma mbindo elongo na ye. \p \v 21 Okopesa moko kati na bana na yo te lokola mbeka epai ya nzambe Moloki, pamba te osengeli te kobebisa lokumu ya Kombo ya Nzambe na yo. Ngai nazali Yawe. \p \v 22 Okosangisa nzoto te na mwana mobali ndenge basangisaka nzoto na mwana mwasi ; ezali likambo ya nkele. \p \v 23 Okosangisa nzoto te na nyama, noki te okokoma mbindo elongo na yango. Ndenge moko mpe mwasi akosangisa nzoto te na nyama : ezali kotiola Nzambe. \p \v 24 Bomikomisa mbindo te na moko ya makambo oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde bato ya bikolo oyo nazali kobengana liboso na bino bamikomisaki mbindo. \v 25 Lokola mboka yango moko mpe ekomaki mbindo, napesaki yango mpe etumbu mpo na lisumu na yango ; bongo esanzaki bavandi na yango. \p \v 26 Kasi, ezala mwana mboka to mopaya oyo bazali kati na bino, bosengeli kotosa malako mpe bikateli na Ngai ; mpe bosengeli koboya kosala makambo nyonso oyo ya nkele na miso ya Nzambe. \v 27 Pamba te bato oyo bazalaki kovanda na mboka oyo liboso na bino babandaki kosala makambo oyo nyonso, bongo mboka ekomaki mbindo. \v 28 Bino bokeba ete bokomisa mboka mbindo te, mpo ete yango esanza bino te ndenge esanzaki bato ya bikolo oyo bazalaki liboso na bino. \v 29 Moto nyonso oyo akosala moko ya makambo oyo ya nkele na miso ya Nzambe, esengeli balongola ye kati na bato na ye. \p \v 30 Boye, bobatela malako na Ngai mpe bolanda ata likambo moko te kati na makambo mabe oyo ezalaki kosalema liboso ete bino boya, mpo ete bomikomisa mbindo te na nzela na yango. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › » \c 19 \s1 Bato ya bule mpo na Nzambe ya bule \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Yebisa lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : ‹ Bozala bule, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na bino, nazali Bule. \p \v 3 Moto nyonso kati na bino asengeli kotosa mama mpe tata na ye, mpe bosengeli kotosa mikolo na Ngai ya Saba. Nazali Yawe, Nzambe na bino. \p \v 4 Bomipesa te na banzambe ya bikeko to bomisalela te banzambe ya bikeko ya bibende ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. \p \v 5 Tango bokobonza mbeka ya boyokani epai na Yawe, bosala yango na ndenge esengeli mpo ete endimama mpo na bolamu na bino. \v 6 Bosengeli kolia yango kaka na mokolo oyo bobonzi yango lokola mbeka to na mokolo oyo elandi. Mpe eloko nyonso oyo ekotikala, bosengeli kozikisa yango na moto na mokolo ya misato. \v 7 Kasi na mokolo yango ya misato, mbeka yango ekokoma mbindo ; soki moto moko alie yango, nakondima yango lisusu te. \v 8 Moto nyonso oyo akolia yango, akomema mokumba ya mabe na ye mpo ete asambwisi eloko oyo ezali bule mpo na Yawe, mpe basengeli kobengana ye kati na bato na ye. \p \v 9 Tango okobuka mbuma ya bilanga na yo, okobuka yango te kino na mondelo, mpe okozonga te mpo na kolokota mbuma oyo ekokweya. \v 10 Okobuka mpe te mbuma ya vino oyo ekotikala to kolokota oyo ekokweya. Okotika yango mpo na babola to bapaya : nazali Yawe Nzambe na yo. \p \v 11 Okoyiba te, okoloba lokuta te, moto moko te akosa moninga na ye. \v 12 Okolapa te ndayi ya lokuta na Kombo na Ngai mpe okobebisa te bosantu ya Kombo ya Nzambe na yo. Nazali Yawe, Nzambe na yo. \p \v 13 Okonyokola te moninga na yo to okoyiba ye te. Okobomba te lifuti ya mosali na yo butu mobimba kino na tongo. \v 14 Okolakela mabe te moto oyo akufa matoyi mpe okotia libaku te liboso ya mokufi miso, kasi okotosa Nzambe na yo. Nazali Yawe. \p \v 15 Okosambisa na bosembo. Okokotela te, ezala mobola to mozwi. Okosambisa moninga na yo na bosembo. \v 16 Okokende te kotonga bato na yo bipai na bipai. Okosala eloko moko te oyo ekoyeisa pasi na bomoi ya moninga na yo. Nazali Yawe. \v 17 Okoyina ndeko na yo te na motema na yo ; kasi pamela moninga mpo ete omema ngambo te na likambo na ye. \v 18 Okozongisa mabe na mabe te to okobombela moko kati na bato na yo kanda te, kasi okolinga moninga na yo ndenge yo moko omilingaka. Nazali Yawe. \p \v 19 Okobatela bikateli na ngai : okosangisa nzoto te ya banyama mibale ya lolenge mibale ekesana ; okolona mpe te na elanga na yo nkona mibale ekesana. Okolata te elamba oyo batongi na basinga mibale ekesana. \p \v 20 Soki mobali moko asangisi nzoto na mwasi oyo azali mobandami ya mobali mosusu, kasi nanu bapeseli ye te biloko ya libala to kopesa ye bonsomi, esengeli mobali wana afuta lomande. Nzokande bango mibale, bakoboma bango te mpo ete mwasi yango asikolamaki nanu te. \v 21 Mpe mobali asengeli komema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani meme ya mobali oyo akobonza epai na Yawe lokola mbeka mpo na masumu. \v 22 Bongo na nzela ya meme yango ya mbeka mpo na masumu, Nganga-Nzambe akosala mosala ya bolimbisi masumu ya mobali yango liboso ya Yawe, mpe masumu oyo asilaki kosala ekolimbisama. \p \v 23 Tango bokokota na mokili ya Kanana, bokolona banzete ya lolenge nyonso oyo ebotaka mbuma. Na mibu misato, bokozwa bambuma na yango nyonso lokola bambuma ya mbindo ; boye bokolia yango te. \v 24 Na mobu ya minei, bokobulisa bambuma na yango nyonso ekozala bule mpo na Yawe lokola litatoli ya kozongisa matondi epai na Ye. \v 25 Nzokande na mobu ya mitano, bokoki kolia bambuma yango. Na nzela wana, bambuma na bino ekokoma ebele. Nazali Yawe, Nzambe na bino. \p \v 26 Bokolia te nyama oyo ezali na makila kati na yango. Bokosalela soloka to kindoki te. \v 27 Okokata suki te na bangambo nyonso ya moto na yo, okokata mpe te mandefu na bapembeni na yango. \v 28 Soki bozwi matanga, bomikata-kata banzoto na bino te to bomikatisa banzoloko te. Nazali Yawe. \p \v 29 Bobebisa te lokumu ya bana na bino ya basi na kokomisa bango basi ya ndumba, noki te mboka mobimba ekomipesa na kindumba mpe ekotonda na mabe. \p \v 30 Bokobatelaka mikolo na Ngai ya Saba mpe bokotosaka Esika na Ngai ya bule. Nazali Yawe. \p \v 31 Bokende te kotuna makambo na bino epai ya bato oyo basololaka na bakufi to epai ya banganga-kisi, noki te bokomikomisa mbindo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. \p \v 32 Bokotelema liboso ya bato oyo banuni, bokolakisa botosi na bino epai ya mibange ; na nzela wana, bokokumisa Nzambe na bino. Nazali Yawe. \p \v 33 Soki mopaya moko ayei kovanda kati na bino, na mokili na bino, bonyokola ye te. \v 34 Nzokande bozwa ye kati na bino lokola mwana mboka. Bokolinga ye lokola bino moko, pamba te bino mpe bozalaki bapaya kati na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino. \p \v 35 Bokosalela lokuta te tango bokomeka molayi, bakilo mpe tango bokoluka koyeba ebele oyo ekoki kozala na kati. \v 36 Bokosalela bimekelo ya malamu, bakilo ya malamu, efa ya malamu ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito. \p \v 37 Bokobatela bikateli mpe mibeko na Ngai nyonso mpe bokosalela yango. Nazali Yawe. › » \c 20 \s1 Bitumbu ya masumu \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize \v 2 ete apesa malako oyo epai ya bana ya Isalaele : « Soki moto moko ya Isalaele to mopaya oyo avandi kati na Isalaele abonzi moko kati na bana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki, esengeli baboma ye. Bato ya mokili bakobamba ye mabanga. \v 3 Ngai nakotombokela moto yango mpe nakolongola ye kati na bato na ye, pamba te abonzaki mwana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki mpo na kokomisa mbindo Esika na Ngai ya bule mpe mpo na kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai. \v 4 Mpe soki bato ya mokili bakangi miso na bango tango moto wana azali kobonza mwana na ye lokola mbeka epai ya nzambe Moloki mpe baboyi koboma ye, \v 5 ngai nakotombokela moto yango mpe libota na ye, nakolongola bango na ekolo na bango, elongo na bato nyonso oyo balandaki ye mpo na kosalela nzambe Moloki. \p \v 6 Nakotombokela lisusu bato nyonso oyo balandaka moto oyo asololaka na bakufi mpe banganga-kisi mpo na kosalela banzambe ya bikeko. Nakolongola bango kati na bato na bango. \p \v 7 Bomibulisa mpe bozala bule, pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino. \p \v 8 Bobatela bikateli na Ngai mpe bosalela yango. Nazali Yawe oyo akomisi bino basantu. \p \v 9 Moto nyonso oyo akolakela tata na ye to mama na ye mabe, esengeli baboma ye ; pamba te alakeli tata na ye to mama na ye mabe : makila na ye ekotangama na moto na ye moko. \p \v 10 Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango. \p \v 11 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya tata na ye, asambwisi tata na ye ; bango mibale, esengeli koboma bango : makila na bango ekotangama na mito na bango moko. \p \v 12 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya mwana na ye ya mobali ; bango mibale esengeli koboma bango, pamba te basali bosoto : makila na bango ekotangama na mito na bango moko. \p \v 13 Soki mobali asangisi nzoto na moninga na ye mobali ndenge basangisaka nzoto na mwasi, bango mibale basali likambo moko ya mbindo ; boye esengeli koboma bango mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko. \p \v 14 Soki mobali abali mwasi mpe mama ya mwasi, ezali likambo ya mabe koleka. Bango nyonso misato : mobali mpe basi nyonso mibale, esengeli kotumba bango na moto, mpo ete mabe moko te ezala kati na bino. \p \v 15 Soki mobali asangisi nzoto na nyama, esengeli koboma ye elongo na nyama yango. \v 16 Ndenge moko mpe soki mwasi asangisi nzoto na nyama, bakoboma ye elongo na nyama yango : makila na bango ekotangama na mito na bango moko. \p \v 17 Soki mobali abali mwasi oyo azali ndeko na ye mpo ete abotami na mama mosusu to tata mosusu, bongo asangisi na ye nzoto, ezali likambo ya soni. Bakolongola bango na miso ya bato na bango. Lokola mobali asambwisi ndeko na ye ya mwasi, akomema ngambo. \p \v 18 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi oyo azali komona makila na ye ya sanza ; bango mibale, esengeli kobengana bango kati na bato na bango, mpo te basangisaki nzoto na tango mwasi azalaki komona makila na ye ya sanza. \p \v 19 Okosangisa nzoto te na ndeko mwasi ya tata to ya mama na yo, pamba te ekosambwisa bondeko. Soki moto asali yango, bango mibale bakomema ngambo mpo na mabe na bango. \p \v 20 Soki mobali moko asangisi nzoto na mwasi ya ndeko ya tata na ye to mwasi ya ndeko ya mama na ye, asambwisi ndeko ya tata na ye to ya mama na ye ; bango mibale bakomema ngambo mpo na mabe na bango mpe bakokufa bazanga bana. \p \v 21 Soki mobali asangisi nzoto na mwasi ya ndeko na ye ya mobali, ezali likambo ya mbindo ; asambwisi ndeko na ye ya mobali ; bakokufa bazanga bana. \p \v 22 Bobatela mpe botosa bikateli mpe mibeko na Ngai nyonso ; bosalela yango mpo ete mokili epai wapi nakomema bino mpo na kovanda esanza bino te. \v 23 Bolanda te bizaleli ya bikolo oyo nakobengana liboso na bino, pamba te basalaki makambo wana nyonso mpe nayinaki bango. \v 24 Boye nayebisaki bino : ‹ Bino nde bato bokozwa mokili na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi ; napesi bino yango lokola libula. › Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo alongolaki bino kati na bikolo mpe atiaki bino pembeni. \v 25 Yango wana bosengeli kosala bokeseni kati na nyama oyo ezali mbindo mpe oyo ezangi mbindo, kati na ndeke oyo ezali mbindo mpe oyo ezali peto. Bosengeli te komikomisa mbindo na nzela ya nyama, ya ndeke to ya nyama nyonso oyo etambolaka na libumu, oyo natiaki pembeni mpo ete bino mpe bomona yango lokola mbindo. \p \v 26 Bozala bule, bato oyo babulisami mpo na Ngai ; pamba te Ngai Yawe, nazali Bule ; nalongolaki bino kati na bikolo mosusu, natiaki bino pembeni, mpo ete bozala bato na Ngai moko. \p \v 27 Mobali to mwasi oyo asololaka na bakufi to oyo azali nganga-kisi kati na bino, esengeli baboma ye : bakobamba bango mabanga mpe makila na bango ekotangama na mito na bango moko. » \c 21 \ms1 Malako mpo na Banganga-Nzambe \s1 Etamboli malamu ya Banganga-Nzambe \p \v 1 Yawe ayebisaki Moyize : « Loba na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron : ‹ Nganga-Nzambe akoki te komikomisa mbindo na kosimba ebembe ya moto moko kati na libota na ye, \v 2 longola kaka soki ezali ebembe ya mama na ye, ya tata na ye, ya mwana na ye ya mobali to ya mwana na ye ya mwasi, ya ndeko na ye ya mobali. \v 3 Mpo na ndeko na ye ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te, oyo azali nanu na maboko na ye awa abali nanu te ; Nganga-Nzambe akoki komikomisa mbindo. \v 4 Lokola azali mokambi kati na bato na ye, akoki te komikomisa mbindo ; noki te akobebisa bosantu mpe lokumu na ye. \p \v 5 Banganga-Nzambe bakoki te komikokola suki ya moto, kokata mandefu na bapembeni to kokata nzoloko na banzoto na bango. \v 6 Nzokande basengeli kozala bato bamibulisi mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango. Boye, basengeli te kobebisa lokumu mpe bosantu ya Kombo ya Nzambe na bango ; pamba te ezali bango nde babonzaka makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, bilei ya Nzambe na bango. Mpo na yango, basengeli kozala bule mpo na Yawe. \p \v 7 Banganga-Nzambe basengeli te kobala basi oyo basalaka kindumba to ba-oyo babebisa lokumu na bango na nzela ya mibali mosusu to ba-oyo babengana bango na libala. Pamba te, Banganga-Nzambe bazali basantu oyo babulisami mpo na mosala na Ngai Nzambe na bango. \v 8 Bato nyonso ya Isalaele basengeli komona bango lokola basantu, pamba te babonzaka bilei ya Nzambe na bino. Bomona bango basantu mpo ete Ngai Yawe oyo naponi Isalaele mpe nakomisi bino basantu, nazali Mosantu. \p \v 9 Mwana mwasi ya Nganga-Nzambe oyo abebisi lokumu na ye na kosala kindumba asambwisi nde tata na ye ; boye esengeli kotumba ye ya bomoi na moto. \s1 Etamboli malamu ya mokonzi ya Banganga-Nzambe \p \v 10 Mokonzi ya Banganga-Nzambe azali na bokonzi likolo ya Banganga-Nzambe mosusu ; basopelaki ye mafuta ya epakolami na moto mpo na kobulisa ye, mpe asengeli kolata bilamba ya bonganga-Nzambe. Mpo na yango, asengeli te kopanza suki na ye ya moto to kopasola bilamba na ye na mokolo ya matanga. \v 11 Akoki te kopusana pembeni ya ebembe mpe komikomisa mbindo mpo na kufa ya tata na ye to ya mama na ye. \v 12 Azali na ndingisa te ya kotika Esika ya bule ya Nzambe na ye to kobebisa bosantu na yango, pamba te abulisamaki na nzela ya mafuta ya epakolami ya Nzambe na ye. Nazali Yawe. \p \v 13 Mokonzi ya Banganga-Nzambe asengeli kobala mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te. \v 14 Akoki kobala te mwasi oyo akufisa mobali, mwasi oyo babengani na libala to mwasi oyo abebisa lokumu na ye na kosala kindumba ; kasi akobala kaka, kati na bato na ye, mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te. \v 15 Na bongo, akobebisa te bosantu ya bakitani na ye kati na bato na ye ; pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisi ye. › » \s1 Mbeba ya nzoto epekisi kozala Nganga-Nzambe \p \v 16 Yawe ayebisaki Moyize : \v 17 « Loba na Aron : ‹ Kati na bana na yo nyonso na milongo oyo ekoya, moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto na ye, akoki kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye. \v 18 Moto moko te oyo azali na mbeba na nzoto akoki kopusana pembeni ya etumbelo : mokufi miso, moto oyo atambolaka tengu-tengu ; moto oyo abeba na elongi, na makolo mpe oyo maboko to makolo na ye ekokana te, \v 19 moto oyo abukana lokolo to loboko, \v 20 moto oyo azali na kunki na mokongo to oyo azali penza mokuse ; moto oyo azali na liso ekufa, na makwanza, na mapalata to oyo baboma mokongo. \v 21 Kati na bakitani ya Nganga-Nzambe Aron, moko te oyo azali na mbeba na nzoto akopusana pembeni ya etumbelo mpo na kobonza makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Lokola azali na mbeba na nzoto na ye, akoki te kopusana mpo na kobonza bilei ya Nzambe na ye. \v 22 Akoki na ye kolia bilei nyonso oyo bakobonzela Ngai Nzambe na ye, bilei ya bule mpe bilei oyo eleki bule. \v 23 Kasi mpo na mbeba ya nzoto na ye, akoki te kopusana pembeni ya rido ya Esika ya bule to ya etumbelo, mpo ete abebisa te bosantu ya Esika na Ngai ya bule, pamba te Ngai nazali Yawe, mpe ezali Ngai nde nabulisaki Banganga-Nzambe mpo na mosala na Ngai. › » \p \v 24 Moyize alobaki makambo oyo epai ya Aron, epai ya bana na ye ya mibali, mpe epai ya bana nyonso ya Isalaele. \c 22 \s2 Mibeko mpo na kolia makabo ya etumbelo \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Talisa Aron mpe bana na ye ya mibali ndenge nini basengeli kozala mosika ya makabo oyo bana ya Isalaele babonzelaka Ngai, mpo ete babebisa te bosantu ya Kombo na Ngai ya bule ; Ngai nazali Yawe. \p \v 3 Loba na bango : ‹ Mpo na milongo oyo ekoya na sima mpe kati na bakitani na bino, soki moko azali mbindo mpe apusani pembeni ya makabo ya bule oyo bana ya Isalaele babonzeli Ngai Yawe, esengeli balongola moto wana na miso na Ngai. Nazali Yawe. \p \v 4 Soki moko ya bakitani ya Aron azali na bokono na poso ya nzoto lokola maba, bokono ya kobima tofina to makila na nzoto ya mibali, akoki te kolia likabo ya bule kino tango akokoma peto. Ndenge moko mpe, akozala mbindo soki asimbi eloko oyo ekomi mbindo mpo ete etuti ebembe to mobali oyo abimisi mayi ya mibali ; \v 5 soki asimbi nyama oyo etambolaka na libumu mpe ekomisaka mbindo to soki asimbi moto nyonso oyo akoki kokomisa ye mbindo ata na nzela ya ndenge nini. \v 6 Moto oyo akosimba eloko ya ndenge wana akozala mbindo kino na pokwa. Akoki kolia likabo ya bule te kino tango akosukola na mayi. \v 7 Akokoma peto tango moyi ekolala mpe sima na yango nde akoki kolia makabo ya bule, pamba te ezali bilei na ye. \v 8 Akoki te kolia nyama oyo ekufi yango moko to oyo nyama ya zamba ebomi, noki te akokoma mbindo na nzela na yango. Nazali Yawe. \p \v 9 Banganga-Nzambe bakotosa malako na Ngai tango nyonso mpo ete bamema ngambo te mpe bakufa te, noki te bakokufa solo. Ngai nazali Yawe oyo abulisaki bango mpe akomisaka bango basantu mpo na mosala na Ngai. \p \v 10 Moto moko te oyo azali na libota ya Banganga-Nzambe te akoki kolia makabo ya bule : ezala mopaya oyo Nganga-Nzambe abengi to mosali oyo Nganga-Nzambe azwi na mosala. \v 11 Kasi soki Nganga-Nzambe asombi mowumbu na mbongo na ye to soki mowumbu abotami na ndako na ye, mowumbu wana akolia makabo ya bule. \v 12 Soki mwana mwasi ya Nganga-Nzambe abali mobali oyo azali Nganga-Nzambe te, akolia te makabo ya bule. \v 13 Kasi soki mwana mwasi ya Nganga-Nzambe akufisi mobali to akabwani na mobali, bongo amiboteli mwana te mpe azongi kovanda na ndako ya tata na ye lokola tango azalaki elenge, akoki kolia biloko ya ndenge moko na tata na ye ; kasi moto oyo azali Nganga-Nzambe te akolia yango te. \p \v 14 Soki moto alie likabo ya bule na kozanga koyeba, asengeli kozongisa epai ya Nganga-Nzambe motuya ya likabo yango mpe akobakisa eteni moko kati na mitano ya motuya na yango. \p \v 15 Banganga-Nzambe basengeli te kobebisa lokumu ya makabo ya bule oyo bana ya Isalaele babonzeli Yawe. \v 16 Soki, wana bazali mbindo, balie yango, bakomemisa bana ya Isalaele ngambo oyo ekosala ete bapesa likabo mpo na kozongisa boyokani, pamba te ezali Ngai Yawe nde nabulisaka bango mpo na mosala na Ngai. › » \s1 Ndenge nini kopona banyama ya kobonza \p \v 17 Yawe alobaki na Moyize : \v 18 « Yebisa Aron, bana na ye ya mibali mpe bana nyonso ya Isalaele : ‹ Soki moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na Isalaele alingi kobonza mbeka ya kotumba epai na Yawe mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko, \v 19 asengeli kobonza nyama ya mobali oyo ezangi mbeba kati na bangombe, bameme to bantaba mpo ete Nzambe andima yango. \v 20 Asengeli te kobonza nyama oyo ezali na mbeba, pamba te ekondimama te. \v 21 Ndenge moko mpe, soki moto alingi kobonza epai na Yawe mbeka ya boyokani oyo azwi kati na bangombe, bameme to bantaba, mpo na kokokisa ndayi to likabo oyo apesi kolanda mokano ya motema na ye moko, nyama yango esengeli kozala ezanga mbeba. \v 22 Bokobonza te epai na Yawe nyama oyo ekufa liso to ezoka, oyo ezali kotambola tengu-tengu to oyo ezali na bokono na poso ya nzoto, oyo ezali na makwanza to na mapalata ; bokoki te kotia nyama ya boye na likolo ya etumbelo lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. \v 23 Nzokande bokoki mpe te kobonza mpo na Yawe lokola likabo oyo bopesi kolanda mokano ya mitema na bino moko, ngombe ya mobali to meme oyo ezali na makolo to maboko ekokana te. Mbeka ya boye ekoki kondimama te mpo na kokokisa ndayi. \v 24 Bokobonza kaka epai na Yawe, nyama oyo mapumbu na yango bafina penza to banika, balongola to bakata ; bokoki kosala bongo te kati na mboka na bino moko. \v 25 Bokoki kondima nyama ya lolenge oyo te na maboko ya bapaya mpo na kobonza yango epai na Yawe lokola bilei ya Nzambe na bino. Ekoki kondimama te, pamba te ezali na mbeba. › » \p \v 26 Yawe alobaki na Moyize : \v 27 « Soki mwana ngombe, mwana meme to mwana ntaba ebotami, ekosala mikolo sambo epai ya mama na yango, bongo na mokolo ya mwambe, ekondimama lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe. \v 28 Bokoki te kokata kingo ya ngombe ya mwasi to ya meme ya mwasi mokolo moko na mwana na yango. \p \v 29 Tango bokobonza mbeka ya kozongisa matondi epai na Yawe, bobonza yango na lolenge oyo ekosala ete Nzambe andima bino. \v 30 Esengeli bolia yango kaka mokolo wana. Bokotika eloko moko te kino na tongo. Nazali Yawe. \p \v 31 Bobatela mitindo na Ngai mpe bosalela yango. Nazali Yawe. \p \v 32 Bokobebisa te lokumu ya Kombo na Ngai ya bule, mpo ete bana ya Isalaele bayeba solo ete Ngai nazali Mosantu. Ezali Ngai Yawe nde nabulisaki bino. \v 33 Nabimisaki bino na mokili ya Ejipito mpo ete nazala Nzambe na bino. Nazali Yawe. » \c 23 \ms1 Mibeko na tina na bafeti \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokobanda kosangana mpo na kosala bafeti mpo na lokumu na Ngai, bokobanda kobengisa bato mpo na kogumbamela Ngai Yawe, pamba te ezali mayangani ya bule. \s1 Mokolo ya Saba \p \v 3 Bokosala mikolo motoba, kasi mokolo ya sambo ezali Saba, mokolo ya kopema ; mokolo ya mayangani ya bule. Na esika nyonso oyo bokozala, bokosala ata mosala moko te : ezali mokolo ya Saba ya Yawe. \p \v 4 Tala bafeti mosusu ya Yawe, mayangani ya bule oyo bokobengisela bato na mikolo oyo ekatama mpo na kopesa Ngai lokumu. \s1 Feti ya Pasika mpe feti ya mapa ezanga levire \p \v 5 Pasika ya Yawe ekobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso. \v 6 Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza wana nde feti ya Mapa ezanga levire mpo na Yawe ekobanda. Bokolia mapa ezanga levire mikolo sambo. \v 7 Na mokolo ya liboso, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. \v 8 Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Mpe na mokolo oyo ya sambo, bokozala na mayangani ya bule ; bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. › » \s1 Feti ya bambuma ya liboso \p \v 9 Yawe alobaki na Moyize : \v 10 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino mpe tango bokobuka bambuma kati na mokili yango, bokomema epai ya Nganga-Nzambe liboke ya liboso ya bambuma oyo bokobuka. \v 11 Na mokolo oyo ekolanda Saba, Nganga-Nzambe akobonza liboke yango na kotombola liboso ya Yawe mpo ete Ngai nandima yango. \v 12 Na mokolo yango, bakobonza liboke yango na kotombola, bokobonzela Yawe mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba lokola mbeka ya kotumba. \v 13 Bokobakisa bakilo motoba ya farine basangisa na mafuta lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe, mpe bokobakisa lisusu litele moko na ndambo ya vino lokola likabo na yango ya masanga. \v 14 Bokoki kolia ata lipa moko te, ezala bambuma bakalinga to bambuma ya sika, kino na mokolo oyo bokobonza likabo yango epai ya Nzambe na bino. Oyo mpe ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino na bisika nyonso oyo bokozala. \s1 Feti ya baposo \p \v 15 Bosengeli kotanga baposo sambo, kobanda na mokolo oyo elandi mokolo ya Saba, mokolo oyo bokomema liboke ya bambuma mpo ete batombola yango ; baposo nyonso sambo esengeli kozala ya kokoka. \v 16 Bokotanga mikolo tuku mitano kino na mokolo oyo ekolanda mokolo ya Saba. Na mokolo wana ya Saba, bokobonza epai na Yawe likabo ya bambuma ya sika. \v 17 Bokomema, wuta na bisika nyonso oyo bokozala, mapa mibale mpo na kobonza yango na kotombola ; bakosala moko na moko kati na yango na bakilo motoba ya farine basangisa na levire mpe batumba na moto. Ekozala likabo ya bambuma na bino ya liboso mpo na Yawe. \v 18 Elongo na mapa wana, bokobonza lokola mbeka ya kotumba : bana meme sambo ya mibali ya mobu moko mpe ezanga mbeba, ngombe moko ya mobali mpe bameme mibale ya mibali. Bokobonza yango mpo na Yawe, elongo na makabo na yango ya bambuma mpe ya masanga, lokola likabo bazikisa na moto, oyo solo kitoko na yango ekosepelisa Yawe. \v 19 Bokobonzela Ngai lisusu ntaba moko ya mobali lokola mbeka mpo na masumu mpe bana meme mibale ya mobu moko lokola mbeka ya boyokani. \v 20 Nganga-Nzambe akobonza na kotombola, liboso ya Yawe, bana meme yango mibale elongo na mapa ya bambuma ya liboso. Ekozala makabo ya bule mpo na Ngai Yawe mpe ekozala ya Nganga-Nzambe. \v 21 Kaka na mokolo wana, bokobengisa bato na mayangani mpo na lokumu na Ngai. Ekozala mayangani ya bule, mpe bokosala mosala moko te oyo bosalaka mokolo na mokolo. Na bisika nyonso oyo bokovanda, ekozala mitindo ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino. \p \v 22 Tango bokobuka bambuma na mboka na bino, bobuka te kino na bandelo ya bilanga na bino mpe bolokota te oyo ekobanda kokweya. Botika yango mpo na mobola to mopaya. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › » \s1 Feti ya bakelelo to mokolo ya ekaniseli \p \v 23 Yawe alobaki na Moyize : \v 24 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Mokolo ya liboso ya sanza ya sambo ekozala mpo na bino mokolo ya kopema, mokolo ya ekaniseli mpe ya kobeta kelelo, mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai. \v 25 Bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala, kasi bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. › » \s2 Mokolo ya bolimbisi masumu \p \v 26 Yawe alobaki na Moyize : \v 27 « Mokolo ya zomi ya sanza ya sambo ezali mokolo ya bolimbisi masumu. Bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai ; bokomikitisa mpe bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. \v 28 Bokosala mosala moko te na mokolo wana, pamba te ezali mokolo ya kosala mosala ya bolimbisi masumu liboso na Ngai Yawe, Nzambe na bino. \v 29 Moto nyonso oyo akokila bilei te na mokolo wana, bakolongola ye kati na bato na ye. \v 30 Nakoboma moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo wana. \v 31 Bokoki kosala ata mosala moko te. Na bisika nyonso oyo bokozala, oyo nde ekozala mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani na bino oyo bakoya sima na bino. \v 32 Ekozala mpo na bino mokolo ya kopema lokola mokolo ya Saba, mokolo ya komikitisa. Bokobatela mokolo na bino ya Saba, kobanda na pokwa ya mokolo ya libwa kino na pokwa ya mokolo oyo ekolanda. » \s1 Feti ya bandako ya kapo \p \v 33 Yawe alobaki na Moyize : \v 34 « Yebisa bana ya Isalaele : ‹ Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, feti ya Bandako ya kapo esengeli kobanda, mpe bakosepela yango mikolo sambo mpo na lokumu ya Yawe. \v 35 Mokolo ya liboso ekozala mokolo ya mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe ; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala mokolo na mokolo. \v 36 Mikolo sambo, bokobonzela Yawe makabo bazikisa na moto. Na mokolo ya mwambe, bokozala na mayangani ya bule mpo na lokumu na Ngai Yawe, mpe bokobonza makabo bazikisa na moto. Ekozala mokolo ya suka ya mayangani ; bokosala mosala moko te oyo bomesana kosala. \p \v 37 Oyo nde bafeti oyo bokobanda kosala mpo na lokumu ya Yawe, mpe oyo bokobanda kobengisela bato na mayangani ya bule mpo ete basambela Yawe mpe babonzela Ye makabo bazikisa na moto, bambeka ya kotumba mpe makabo ya bagato, bambeka mpe bambeka ya masanga ya vino, kolanda ndenge ekatama mpo na mokolo na mokolo. \v 38 Bokobakisa makabo oyo na likolo ya makabo oyo bokobonzela Ngai na mikolo ya Saba ya Yawe, na likolo ya bakado na bino, na likolo ya makabo na bino mpo na kokokisa ndayi to na likolo ya makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko. \p \v 39 Kasi na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, sima na kobuka bambuma ya mabele, bokosala feti mpo na Yawe, mikolo sambo. Mokolo ya liboso mpe mokolo ya mwambe ekozala mikolo ya kopema. \p \v 40 Na mokolo ya liboso, bokopona bambuma ya banzete, mandalala ya banzete ya mbila, bitape ya banzete oyo ezali na makasa ebele mpe banzete oyo babengaka sole mpe ebotaka pembeni ya mayi. Bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, mikolo sambo. \v 41 Na mikolo sambo, bokobanda kosala feti oyo mibu nyonso mpo na lokumu na Yawe. Oyo ezali mobeko ya libela mpo na milongo ya bakitani oyo bakoya sima na bino ; bokosala feti yango na sanza ya sambo. \v 42 Bokovanda na bandako ya matiti mikolo sambo ; bato nyonso oyo bazali bana mboka ya Isalaele bakovanda kati na bandako yango ya matiti \v 43 mpo ete bakitani na bino bayeba ete navandisaki bana ya Isalaele na bandako ya matiti tango nabimisaki bango na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino. › » \p \v 44 Moyize ayebisaki bana ya Isalaele malako nyonso oyo etali bafeti ya Yawe. \c 24 \s1 Etelemiselo ya minda kati na Tempelo \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Pesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso. \v 3 Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron akobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo na bino nyonso. \v 4 Minda ekozala likolo ya etelemiselo ya minda, esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe ; bakobongisa yango tango nyonso. \s1 Bagato ya kobonzela Nzambe \p \v 5 Okozwa farine mpe okolamba bagato zomi na mibale, okosalela biteni mibale kati na biteni zomi ya efa mpo na gato moko na moko. \v 6 Okotanda yango na milongo mibale, gato motoba na molongo moko, likolo ya mesa oyo esalema na wolo ya peto, liboso ya Yawe. \v 7 Na molongo moko na moko, okosopa ansa ya peto oyo ekotumbama na esika ya gato lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, mpe ekozala ekaniseli. \p \v 8 Mikolo nyonso ya Saba, bokobonza lipa yango liboso ya Yawe na kombo ya bana ya Isalaele lokola boyokani ya libela. \v 9 Gato yango ekozala mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali ; bana na ye ya mibali bakolia yango na Esika ya bule, pamba te ezali eteni ya bule koleka kati na biteni na bango oyo bazwaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. Ezali mobeko mpo na libela. » \s1 Motioli asengeli na kufa \p \v 10 Ezalaki na mwana mobali moko oyo mama na ye azalaki moto ya Isalaele mpe tata na ye, moto ya Ejipito ; apusanaki kati na bana ya Isalaele mpe abundisaki moto ya Isalaele kati na molako. \v 11 Mwana mobali ya mwana mwasi ya Isalaele atiolaki Kombo ya Yawe mpe alakelaki yango mabe, boye bamemaki ye epai ya Moyize. Kombo ya mama na ye ezalaki « Shelomiti. » Shelomiti azalaki mwana mwasi ya Dibiri, kati na libota ya Dani. \v 12 Batiaki ye na boloko kino kozela ete Yawe alakisa bango mokano na Ye. \p \v 13 Yawe alobaki na Moyize : \v 14 « Mema na libanda ya molako moto oyo atioli Nzambe. Bato nyonso oyo bayokaki ye, bakotia maboko na bango na moto na ye, mpe bato nyonso ya lingomba bakobamba ye mabanga. \p \v 15 Loba na bana ya Isalaele : ‹ Soki moto alakeli Nzambe na ye mabe, amemi ngambo ; \v 16 soki moto atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye : bato nyonso ya lingomba basengeli kobamba ye mabanga. Azala mopaya to mwana mboka, soki atioli Kombo ya Yawe, basengeli koboma ye. \p \v 17 Soki moto abomi moto, basengeli koboma ye. \v 18 Soki moto abomi nyama ya moto mosusu, asengeli kozongisa nyama ya bomoi na esika ya nyama oyo ekufi : kolanda mobeko ya bomoi mpo na bomoi. \p \v 19 Soki moto azokisi moninga na ye, bakosala ye ndenge asalaki moninga : \v 20 soki abuki eteni ya nzoto, ye mpe bakobuka ye eteni ya nzoto ; soki atoboli liso, ye mpe bakotobola ye liso ; soki abuki linu, ye mpe bakobuka ye linu ; ndenge azokisi moto mosusu, ndenge wana mpe bakozokisa ye. \p \v 21 Moto nyonso oyo abomi nyama ya moninga na ye, akozongisa nyama mosusu ; kasi oyo abomi moto, basengeli koboma ye. \p \v 22 Ezala mopaya to mwana mboka, bino nyonso bozali na mobeko moko ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. › » \p \v 23 Bongo Moyize alobaki na bana ya Isalaele ; mpe babimisaki na libanda ya molako moto oyo alakelaki Nzambe mabe mpe babambaki ye mabanga. Bana ya Isalaele basalaki kolanda ndenge Yawe atindaki Moyize. \c 25 \s1 Mobu ya bopemi mpo na mabele \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize na ngomba Sinai : \v 2 « Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Tango bokokota na mokili oyo nakopesa bino ; ezala mabele esengeli kopema, yango ekozala Saba mpo na Yawe. \v 3 Mibu motoba, bokolona bilanga na bino mpe mibu motoba, bokobongisa bilanga na bino ya vino mpe bokobuka bambuma na yango. \v 4 Kasi na mobu ya sambo, mabele esengeli kozala na bopemi, ekozala mobu ya Saba mpo na Yawe. Bokolona bilanga na bino te mpe bokobongisa bilanga na bino ya vino te, mabele esengeli kozala na Saba mpo na Yawe. \v 5 Bokoki kobuka te bambuma oyo ebotaki yango moko na mbala eleki to kobuka bambuma ya vino na elanga oyo babongisa te ; ekozala mobu ya bopemi mpo na mabele. \v 6 Nzokande, biloko oyo mabele ekobota na mobu ya Saba, ekozala bilei na bino : yo, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, mwana mosala na yo mpe mopaya oyo azali kovanda kati na yo \v 7 elongo na banyama ya mboka mpe ya zamba oyo bazali kati na mokili na bino. Bosengeli kolia biloko nyonso oyo mabele ekobota. \s1 Mobu ya kokangolama \p \v 8 Bokotanga mibu sambo ya Saba, mbala sambo, na mibu sambo ; mpe mibu sambo ya Saba ekosala mibu tuku minei na libwa. \v 9 Bongo na sima, na mokolo ya zomi, na sanza ya sambo, na mokolo ya bolimbisi masumu, bokobeta kelelo na bisika nyonso kati na mokili na bino mobimba. \v 10 Bokobulisa mobu ya tuku mitano mpe bokosakola, kati na mokili mobimba, kokangolama ya bavandi na yango nyonso. Ekozala mpo na bino mobu ya kosepela kokangolama na bino ; moto moko na moko kati na bino akozonga na mabele na ye, na libota na ye. \v 11 Mobu ya tuku mitano ekozala mobu ya kosepela kokangolama na bino : bokolona te, bokobuka te biloko oyo bilanga ekobota yango moko, mpe bokobuka te bambuma ya vino ya elanga oyo babongisa te. \v 12 Pamba te ezali mobu ya kosepela kokangolama na bino, mpe esengeli kozala bule mpo na bino. Bokolia kaka bambuma ya bilanga. \p \v 13 Na mobu yango ya kosepela kokangolama na bino, moto nyonso kati na bino akozonga na mabele na ye. \v 14 Soki bozali koteka mabele epai ya ndeko na bino to soki bozali kosomba eloko songolo epai na ye, wana bozali bana mboka moko, tika ete moko te kati na bino akosa ndeko na ye. \v 15 Okosomba epai ya ndeko na yo ya mboka, na motuya ya mbongo oyo bakokata kolanda motango ya mibu oyo eleki wuta mobu ya suka oyo bosepelaki kokangolama na bino ; mpe akotekela yo na motuya ya mbongo oyo ekokatama kolanda motango ya mibu oyo ekotikala, mibu ya kobuka bambuma, kino bokoma na mobu oyo ekolanda, mobu ya kosepela kokangolama na bino. \v 16 Soki mibu etikali ebele, bosengeli komatisa motuya ; mpe soki mibu ezali moke, bosengeli kokitisa motuya, pamba te ezali motango ya mibu ya kobuka bambuma nde etekamaka : yango nde bakotekela yo. \v 17 Tika ete moko te akosa moninga, kasi banga Nzambe na yo ; Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. \p \v 18 Bosalela bikateli na Ngai mpe botosa mibeko na Ngai, bongo bokowumela na kimia kati na mokili ; \v 19 mpe mabele ekobota mbuma na yango, bokolia mpe bokotonda mpe bokovanda na kimia. \p \v 20 Bokoki kotuna : ‘ Tokolia nini na mobu ya sambo soki toloni te mpe tobuki te bambuma na biso ? ’ \v 21 Nakotindela bino mapamboli mingi na mobu ya motoba mpo ete mabele ekoka kobota bambuma mingi oyo bokoki kolia mibu misato. \v 22 Wana bokolona na mobu ya mwambe, bokolia nanu bambuma ya kala mpe bokokoba kolia yango kino bokobuka bambuma ya mobu ya libwa. \s1 Mobeko na tina na koteka mabele mpe bandako \p \v 23 Bokoki te koteka mabele mpo na libela, pamba te mabele ezali ya Ngai, mpe bino bozali bapaya mpe baleki nzela. \v 24 Kati na mokili oyo bokozwa lokola libula, bosengeli kondima ete moto asikola mabele na ye. \p \v 25 Soki mwana mboka moko kati na bino akomi mobola mpe ateki mabele na ye, moto moko ya libota na ye ya pembeni akoki koya kosikola oyo mwana mboka wana atekaki. \v 26 Soki moto wana azali na ndeko te oyo akoki kosikola yango mpo na ye ; mpe ye moko akomi na bozwi bongo azwi makoki ya kosikola yango ; \v 27 asengeli kotanga motango ya mibu wuta atekaki mabele na ye mpe akozongisa motuya ya mibu oyo etikali epai ya moto oyo asombaki yango. Boye, akoki kozongela mabele na ye. \v 28 Soki azwaki te makoki ya kosikola yango, mabele oyo atekaki ekotikala na maboko ya moto oyo asombaki yango kino na mobu ya kosepela kokangolama na ye. Ekozala na mobu yango nde mabele na ye ekozongela ye mpe akokoma lisusu nkolo na yango. \p \v 29 Soki moto ateki ndako kati na engumba oyo bazingela na bamir, azali na makoki ya kosikola yango kaka mpo na mobu moko wuta mokolo oyo atekaki yango. Ezali kaka na tango wana nde akoki kosikola yango. \v 30 Soki asikoli yango te liboso ete mobu mobimba eleka, ndako oyo ezali kati na engumba oyo bazingela na bamir ekotikala libela mpo na moto oyo asombaki yango mpe mpo na bakitani na ye ; bakoki te kozongisa yango na mobu ya kosepela kokangolama. \v 31 Kasi bandako oyo ezali kati na bamboka oyo bazingela te na bamir pembeni-pembeni, ekozala lokola bilanga ya mboka. Bakoki kosikola yango, mpe ekozonga epai na nkolo na yango na mobu ya kosepela kokangolama. \p \v 32 Balevi bazali tango nyonso na makoki ya kosikola bandako na bango, oyo ezali kati na bingumba ya Balevi. \v 33 Soki Molevi ateki ndako na ye kati na bingumba ya Balevi, moto oyo asombi yango akozongisela ye yango na mobu ya kosepela kokangolama ; pamba te bandako oyo ezali kati na bingumba ya Balevi ezali libula na bango ya libela kati na bana ya Isalaele. \v 34 Kasi bilanga oyo ezali zingazinga ya bingumba ya Balevi, bakoki koteka yango te : ezali libula na bango mpo na libela. \s1 Lisungi epai ya babola \p \v 35 Soki moto oyo azali pembeni na yo akomi mobola mpe azali lisusu te na makoki ya komisunga ; okosunga ye, azala mopaya to moleki nzela ; mpo ete azala malamu pembeni na yo. \v 36 Okoki te kozwa mileki na maboko na ye ; kasi banga Nzambe na yo, mpo ete mwana mboka na yo akoka kozala malamu pembeni na yo. \v 37 Soki odefisi ye mbongo, okosenga mileki te na oyo odefisi ye ; mpe soki odefisi ye bilei, okosenga te koleka oyo opesi. \v 38 Ngai nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito ; mpo na kopesa yo mokili ya Kanana, mpe na kozala Nzambe na yo. \s1 Mobeko na tina na basali mpe bawumbu \p \v 39 Soki ndeko na yo, mwana mboka, akomi mobola mpe amiteki epai na yo, kopesa ye te misala na makasi lokola mowumbu. \v 40 Okozwa ye lokola moto na yo ya mosala to lokola moleki nzela oyo azali kati na bino ; akosalela yo kino na mobu ya kosepela kokangolama ; \v 41 mpe na sima, akozwa bonsomi elongo na bana na ye, akozonga na etuka na ye mpe akozongela mabele ya batata na ye. \v 42 Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito ; bakoki te koteka bango lokola bawumbu. \v 43 Kokonza bango te na makasi, kasi banga Nzambe na yo. \p \v 44 Okozwa bawumbu na yo ya mibali mpe basi bawumbu na yo kati na bikolo oyo ezingeli yo ; okosomba bango kaka na bikolo yango. \v 45 Okoki mpe kosomba bapaya oyo bazali kovanda kati na mokili na yo, mpe bato ya bituka na bango, oyo babotami kati na mokili na yo ; boye bakokoma bawumbu na yo. \v 46 Okoki kotika bango epai ya bana na yo lokola libula mpo ete sima na yo bakoma bawumbu na bango mpo na libela ; kasi kokonza te na makasi bandeko na yo, bana ya Isalaele. \p \v 47 Soki mopaya to moleki nzela moko kati na mokili na yo akomi na bozwi mpe moko kati na bandeko na yo, mwana mboka, akomi mobola ; bongo amiteki epai ya mopaya to moleki nzela yango to epai ya moto moko ya libota na ye ; \v 48 ndeko na yo, mwana mboka, akoki kosikolama sima na ye komiteka : moto moko kati na bandeko na ye akoki kosikola ye. \v 49 Soki ndeko azali te mpo na kosikola ye, tata kulutu to tata leki na ye to bana mibali ya tata kulutu to ya tata leki na ye to ndeko na ye mosusu ya libota ya botata akoki kosikola ye. Nzokande soki akomi na makoki, akoki mpe komisikola ye moko. \v 50 Boye, ye elongo na moto oyo asombaki ye, bakotanga mibu oyo eleki wuta na mobu oyo amitekaki kino na mobu ya kosepela kokangolama ; bakokata motuya ya lisiko na ye kolanda motango ya mibu ndenge ezali lifuti ya moto ya mosala. \v 51 Soki etikali mibu ebele, asengeli kofuta mpo na kosikolama na ye, mbongo kolanda talo oyo basombaki ye. \v 52 Soki etikalaki mibu moke kino na mobu ya kosepela kokangolama, akotanga mibu yango mpe akofuta mpo na lisiko na ye kolanda motango ya mibu oyo etikali. \v 53 Na mibu nyonso oyo akosala epai ya mosombi na ye, bakozwa ye lokola moto ya mosala ; okotika te ete mosombi na ye akonza ye na makasi. \v 54 Ata soki asikolami te na moko kati na banzela oyo, ye elongo na bana na ye basengeli kozwa bonsomi na mobu ya kosepela kokangolama. \v 55 Pamba te, bana ya Isalaele bazali bawumbu na Ngai, oyo nabimisaki na Ejipito. Nazali Yawe, Nzambe na bino. \c 26 \ms1 Bambano ya boyokani \s1 Lifuti mpo na botosi : mapamboli \p \v 1 Bokosalaka te banzambe ya bikeko to kotelemisa ekeko to likonzi ya bule mpe bokotiaka te kati na mokili na bino ata libanga moko oyo batia bililingi mpo ete bofukamela yango ; pamba te nazali Yawe, Nzambe na bino. \p \v 2 Bokobatelaka mikolo na Ngai ya Saba mpe bokotosaka Esika na Ngai ya bule. Nazali Yawe. \p \v 3 Soki botosi mibeko na Ngai, soki botosi mitindo na Ngai mpe bosaleli yango, \v 4 nakonokisela bino mvula na tango na yango ; mabele mpe banzete ya zamba ekobota bambuma na yango. \v 5 Mosala ya kobeta ble ekowumela kino na tango ya kobuka, mpe tango ya kobuka ekowumela kino na tango ya kolona ; bokolia na kotonda mpe bokovanda na kimia kati na mokili na bino. \v 6 Nakotia kimia kati na mokili, bokolala pongi, mpe moto moko te akotungisa bino ; nakolongola banyama oyo ebomaka kati na mokili mpe bitumba ekozala lisusu te kati na mokili na bino. \v 7 Bokobengana banguna liboso na bino mpe bakokufa na mopanga liboso na bino. \v 8 Bato mitano kati na bino bakolanda bato nkama moko, bato nkama moko kati na bino bakolanda bato nkoto zomi ; mpe banguna na bino bakokufa liboso na bino na mopanga. \v 9 Nakosalela bino ngolu, nakopesa bino mabota nakokomisa bino ebele mpe nakobatela boyokani na Ngai elongo na bino. \v 10 Bambuma ya bilanga na bino ekozala penza ebele mpe ekosala ete bokolia tango molayi bambuma oyo bokozala na yango kati na bibombelo ; kino bokokaba mosusu mpo ete bokotisa bambuma ya sika. \v 11 Nakotia Ndako na Ngai kati na bino mpe nakotombokela bino te. \v 12 Nakotambola kati na bino mpo ete nazala Nzambe na bino mpe bino bozala bato na Ngai. \v 13 Nazali Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpo ete bozala lisusu bawumbu kuna te ; nakataki basinga ya bikangiseli na bino mpe nabimisaki bino lokola balongi. \s1 Etumbu mpo na kozanga botosi : bilakeli mabe \p \v 14 Soki boboyi kotosa mpe kosalela mibeko wana nyonso, \v 15 soki bobwaki bikateli na Ngai, mpe soki molimo na bino etombokeli malako na Ngai kino koboya kosalela mibeko na Ngai nyonso mpe kokata boyokani na Ngai, \v 16 tala ndenge nakosala bino : nakokotisa kati na bino mobulu, libebi, bokono oyo ekoboma bino miso mpe ekobebisa bomoi na bino ; bokolona milona na bino na pamba mpe banguna na bino bakolia yango. \v 17 Nakotombokela bino, mpe bokokweya liboso ya banguna na bino ; ba-oyo bayinaka bino bakokonza bino mpe bokokima ata soki moto moko te azali kolanda bino. \p \v 18 Soki atako bongo boyoki kaka te, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino. \v 19 Nakosilisa makasi na bino, nakokomisa lola makasi lokola ebende mpo na bino, mpe mabele na bino lokola bronze. \v 20 Makasi na bino ekosila na pamba, mpo ete mabele na bino ekobota te mpe banzete ekobota te bambuma na yango. \p \v 21 Soki botelemeli Ngai mpe boboyi koyoka Ngai, nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino. \v 22 Nakotinda kati na mokili na bino banyama ya zamba oyo ekoboma bana na bino, ekolia bibwele na bino mpe ekosilisa koboma bino kino banzela na bino ezanga bato. \p \v 23 Soki bitumbu yango ekoki kaka te mpo na kozongisa bino na nzela, nzokande bokobi kaka koboya kotosa Ngai, \v 24 Ngai mpe nakotelemela bino mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino. \v 25 Nakopesa nzela na mopanga mpo ete eboma bino mpo na kozongisa mabe na mabe likolo ya boyokani oyo bino bobebisi. Tango bokosangana kati na bingumba na bino, nakotindela bino bokono oyo ebomaka, mpe nakokaba bino na maboko ya monguna. \v 26 Tango nakopimela bino bilei, basi zomi bakotumba mapa na fulu moko mpe bakobanda kopesa bino mapa yango na kilo : bokolia kasi bokotonda te. \p \v 27 Soki, atako bongo, boyoki kaka te mpe bokobi kaka kotelemela Ngai, \v 28 Ngai mpe nakotelemela bino lisusu na kanda makasi mpe nakopesa bino bitumbu mbala sambo mpo na masumu na bino. \v 29 Bokolia bana na bino ya mibali mpe ya basi. \v 30 Nakokweyisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba, nakokweyisa bitumbelo na bino ya malasi, nakotia bibembe na bino likolo ya bibembe ya banzambe na bino ya bikeko mpe nakotombokela bino. \v 31 Nakokomisa bingumba na bino bisobe, nakobebisa bisika na bino ya bule mpe nakosepela te lisusu na solo kitoko ya malasi na bino. \v 32 Ngai moko nakokotisa mobulu kati na mokili, mpe ezala banguna na bino oyo bakoya kovanda kati na yango bakokamwa. \v 33 Nakopanza bino kati na bikolo ya bapaya mpe nakobengana bino na mopanga ; mokili na bino ekozanga bato mpe bingumba na bino ekokawuka. \p \v 34 Boye, mokili na bino ekosepela Saba na yango mibu nyonso oyo ekozanga bato mpe oyo bokokima epai ya banguna na bino ; ekozwa bopemi mpe ekosepela Saba na yango. \v 35 Na tango nyonso oyo ekozanga bato, ekozwa bopemi oyo ezalaki na yango na tango ya Saba na bino tango bozalaki kovanda kati na yango. \p \v 36 Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto : bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango. \v 37 Bakokweya moko likolo ya moninga lokola nde bazali kokima mopanga ata soki moto moko te azali kolanda bango. Bokolonga te liboso ya banguna na bino. \v 38 Bokokufa kati na bikolo ya bapaya mpe mokili ya banguna na bino ekolia bino. \v 39 Kati na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino bakokufa kuna mpo na masumu na bango moko mpe mpo na masumu ya batata na bango. \s1 Nzambe akokanisa boyokani na Ye \p \v 40 Nzokande, soki bakotubela masumu na bango mpe masumu ya batata na bango, misala na bango ya mabe mpe botomboki na bango liboso na Ngai, \v 41 oyo mpo na yango, Ngai natelemelaki bango mpe namemaki bango na mokili ya banguna na bango, wana mitema na bango oyo ekatama ngenga te ekomikitisa mpe bakozwa lifuti ya mabunga na bango, \v 42 nakokanisa boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na Jakobi, na Izaki mpe na Abrayami ; mpe nakokanisa mokili. \v 43 Boye, wana bakotika mokili mpe wana mokili yango ekosepela Saba na yango, na mikolo nyonso oyo yango ekozala ezanga bato, na tango yango, bakozwa lifuti ya mabe na bango mpo ete batosaki mibeko na Ngai te mpe batombokelaki bikateli na Ngai. \v 44 Nzokande, ezala tango bakozala kati na mokili ya banguna na bango, nakosundola bango te, nakotombokela bango te kino kobebisa bango mpe kokata boyokani na Ngai elongo na bango ; pamba te Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango. \v 45 Nakokanisa boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango, oyo Ngai nabimisaki na Ejipito, na miso ya bikolo mosusu, mpo ete nazala Nzambe na bango. Nazali Yawe. › » \s1 Maloba mpo na sukisa \p \v 46 Oyo nde bikateli, mitindo mpe mibeko oyo Yawe atiaki kati ya Ye mpe bana ya Isalaele, na ngomba Sinai, na nzela ya Moyize. \c 27 \s1 Bato mpe biloko ya Yawe \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Yebisa bana ya Isalaele mpe loba na bango : ‹ Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa moto lokola likabo epai na Yawe, asengeli kopesa motuya oyo ekokani na lolenge ya moto na moto. \v 3 Tala motuya ya kopesa kolanda ndenge batangaka mbongo ya bibende kati na Mongombo : mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kati na mibu tuku mibale mpe tuku motoba, bagrame nkama motoba ya palata mpo na mobali ; \v 4 bagrame nkama misato na tuku motoba ya palata mpo na mwasi ; \v 5 mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kati na mibu mitano mpe tuku mibale, bagrame nkama mibale na tuku minei ya palata mpo na mobali, mpe bagrame nkama moko na tuku mibale ya palata mpo na mwasi ; \v 6 mpo na moto oyo mikolo ya mbotama na ye ya mbotama ezali kati na sanza moko mpe mibu mitano, bagrame tuku motoba ya palata mpo na mobali, mpe bagrame tuku misato na motoba ya palata mpo na mwasi ; \v 7 mpo na moto oyo mibu na ye ya mbotama ezali kobanda na tuku motoba mpe komata, bagrame nkama moko na tuku mwambe ya palata mpo na mobali, mpe bagrame nkama moko na tuku mibale ya palata mpo na mwasi. \p \v 8 Soki moto oyo alapi ndayi azali mobola to azali na makoki te ya kopesa motuya oyo ekatama, akomema epai ya Nganga-Nzambe moto oyo ye alapelaki ndayi ya kopesa lokola likabo. Boye Nganga-Nzambe akokata motuya ya kopesa kolanda makoki ya moto oyo alapi ndayi. \p \v 9 Soki moko kati na bino alapi ndayi ya kopesa lokola likabo epai na Yawe nyama oyo esengeli, nyama yango ekokoma bule ; \v 10 asengeli te kobongola to kopesa nyama mosusu na esika ya nyama ya liboso, noki te banyama nyonso mibale ekokoma bule. \p \v 11 Soki nyama oyo alapelaki ndayi ezali mbindo, nyama oyo esengeli te kopesama lokola likabo epai na Yawe, bakomema nyama yango liboso ya Nganga-Nzambe \v 12 oyo akotala soki nyama yango ezali malamu to mabe. Motuya nyonso oyo Nganga-nzambe akokata, ekotikala bongo. \v 13 Soki mokolo nyama alingi kosikola yango, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango. \p \v 14 Soki moto abulisi ndako na ye lokola eloko oyo ebulisami mpo na Yawe, Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda ndenge ndako yango ezali malamu to mabe. Motuya nyonso oyo Nganga-Nzambe akokata, ekotikala bongo. \v 15 Soki moto oyo abulisi ndako na ye lokola likabo epai na Yawe alingi kosikola yango, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango ; mpe ndako yango ekokoma lisusu ya ye. \p \v 16 Soki moto abulisi mpo na Yawe eteni ya mabele kati na mabele na ye, bakokata motuya ya eteni ya mabele yango kolanda milona oyo bakoki kolona kuna : bagrame nkama motoba ya palata mpo na bakilo nkama minei ya bambuma ya orje. \v 17 Soki abulisi elanga na ye, na mobu ya kosepela kokangolama, motuya oyo bakata ekotikala bongo. \v 18 Kasi soki abulisi elanga na ye epai na Yawe sima na mobu ya kosepela kokangolama, Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda motango ya mibu oyo etikali kino na mobu oyo ekolanda, mobu ya kosepela kokangolama. Boye bakokitisa motuya oyo ekatama. \p \v 19 Soki moto oyo abulisi elanga alingi kosikola yango, akobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya oyo ekatama ; boye elanga yango ekokoma lisusu ya ye. \v 20 Kasi soki asikoli yango te, bongo bateki yango epai ya moto mosusu, akoki lisusu kosikola yango te. \v 21 Soki elanga esikolami na mobu ya kosepela kokangolama, ekokoma bule lokola elanga oyo babulisi mpo na Yawe : ekozala mabele ya Banganga-Nzambe. \v 22 Soki moto abulisi epai na Yawe elanga oyo asombaki, nzokande ezali mabele ya libota na bango te, \v 23 Nganga-Nzambe akokata motuya na yango kolanda mibu oyo etikali kino na mobu ya kosepela kokangolama ; kaka na mokolo oyo Nganga-Nzambe akokata motuya na yango nde moto yango akopesa motuya na yango lokola eloko ya bule epai na Yawe. \v 24 Na mobu ya kosepela kokangolama, elanga yango ekozonga na maboko ya moto oyo atekaki yango : mokolo mabele. \v 25 Mituya nyonso ekokatama ndenge batangaka mbongo ya bibende kati na Mongombo. Mbongo moko ya ebende esengeli kozala na bagrame zomi na mibale. \p \v 26 Moto moko te akoki kobulisa mwana liboso ya nyama na ye, pamba te mwana ya liboso ezali ya Yawe ; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba. \v 27 Soki ezali mwana liboso ya nyama moko ya mbindo, mokolo nyama yango akoki kosikola yango na kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango ; kasi soki asikoli yango te, bakoteka yango na motuya oyo ekatama. \p \v 28 Nyonso oyo moto akopesa epai na Yawe lokola likabo ekoki kotekama te to kosikolama ; ezala moto, nyama to mabele, pamba te nyonso oyo epesami epai na Yawe ezali bule mpo na Yawe. \v 29 Moto moko te oyo abongisami mpo na kobebisama akoki kosikolama, basengeli koboma ye. \p \v 30 Eteni nyonso ya zomi ya biloko nyonso oyo ekowuta na mabele, ezala bambuma ya bilanga to bambuma ya banzete, ezali ya Yawe : ezali bule mpo na Yawe. \v 31 Soki moto alingi kosikola eteni na ye ya zomi, asengeli kobakisa eteni moko kati na biteni mitano ya motuya na yango. \p \v 32 Eteni nyonso ya zomi ; ezala ya ngombe, ya meme to ya ntaba, elingi koloba nyama nyonso ya zomi oyo ekoleka na se ya lingenda ya mobateli bibwele, ekozala bule mpo na Yawe ; \v 33 ezala ya malamu to ya mabe, akoki te kopona nyama mosusu na esika ya nyama oyo ya zomi. Soki atie nyama moko na esika ya nyama mosusu, nyonso mibale ekokoma bule mpo na Yawe ; mpe ekoki kosikolama te. › » \p \v 34 Oyo nde mitindo oyo Yawe apesaki Moyize, na ngomba Sinai, mpo na bana ya Isalaele.