\id JOS Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Jozue \toc1 Jozue \toc2 Jozue \toc3 Joz \mt1 Jozue \c 1 \ms1 Bana ya Isalaele bakoti na Kanana \s1 Jozue akomi mokambi \p \v 1 Sima na kufa ya Moyize, mowumbu na Yawe, Yawe alobaki na Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosungi ya Moyize : \v 2 « Moyize, mowumbu na Ngai, asili kokufa. Sik’oyo, yo elongo na bato oyo nyonso, bobongama mpo na kokatisa ebale Yordani mpe kokota na mokili oyo nakopesa bana ya Isalaele. \v 3 Nakopesa bino esika nyonso oyo matambe ya makolo na bino ekonyata, ndenge nalakaki Moyize. \v 4 Mokili na bino ekozala longwa na esobe kino na bangomba ya Libani oyo bozali komona, mpe longwa na Ebale monene, ebale Efrate, mokili nyonso ya bato ya Iti kino na Ebale monene, na ngambo ya weste : yango nde ekozala mokili na bino. \v 5 Na mikolo nyonso ya bomoi na yo, moto moko te akolonga kotelemela yo. Ndenge nazalaki elongo na Moyize, ndenge wana mpe nakozala elongo na yo ; nakotika yo te mpe nakosundola yo te. \p \v 6 Zala makasi mpe yika mpiko, pamba te yo nde okokamba bato oyo mpe okopesa bango mokili oyo nalakaki kopesa lokola libula epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. \v 7 Kasi zala makasi mpe yika mpiko, sala keba ete otosa mibeko nyonso oyo Moyize, mowumbu na Ngai, apesaki yo ; komeka te kobima libanda na yango, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo ete okoka kolonga na makambo nyonso oyo okosala. \v 8 Sala ete maloba ya buku oyo ya Mobeko ewumela tango nyonso na monoko na yo ; tangaka mpe kanisaka yango butu mpe moyi, mpo ete osala kolanda nyonso oyo ekomami kati na yango. Na bongo nde okokende liboso mpe okolonga kati na misala na yo nyonso. \v 9 Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. » \s1 Jozue apesaki mitindo \p \v 10 Jozue apesaki mitindo epai ya bakambi ya bato : \v 11 « Botambola kati na molako mpe boloba na bato : ‹ Bobongisa bilei na bino, pamba te sima na mikolo misato, bokokatisa ebale Yordani na esika oyo mpo na kokende kobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bino. › » \p \v 12 Kasi Jozue alobaki na bato ya libota ya Ribeni, na bato ya libota ya Gadi, mpe na bato ya ndambo ya libota ya Manase : \pi1 \v 13 — Bobosana te Mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino : « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino bopemi mpe mabele oyo. » \v 14 Kaka basi, bana mpe bibwele na bino nde bakoki kotikala na mabele oyo Moyize apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani. Kasi bilombe na bino nyonso ya etumba basengeli kolata bibundeli, kokatisa mpe kotambola liboso ya bandeko na bino. Bokosunga bandeko na bino \v 15 kino Yawe akopesa bango mpe bopemi ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino tango bango mpe bakobotola mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango. Na sima na yango nde bokoki kozonga mpe kovanda na mabele na bino moko, mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bino na ngambo ya este ya Yordani, na ngambo oyo moyi ebimelaka. \p \v 16 Bazongiselaki Jozue : \pi1 — Tokosala nyonso oyo okotinda biso mpe tokokende esika nyonso oyo okotinda biso. \v 17 Ndenge totosaki Moyize na makambo nyonso, ndenge wana mpe tokotosa yo. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na Moyize ! \v 18 Moto nyonso oyo akotombokela mitindo na yo to akotosa te maloba na yo na likambo nyonso oyo okotinda, akokufa. Tika ete ozala makasi mpe oyika mpiko ! \c 2 \s1 Jozue atindaki banongi \p \v 1 Wuta na Shitimi, Jozue, mwana mobali ya Nuni, atindaki na nkuku banongi mibale ; alobaki na bango : \pi1 — Bokende kononga mokili, mingi-mingi Jeriko. \p Boye, bakendeki mpe bakotaki na ndako ya mwasi moko ya ndumba, Raabi, mpe bavandaki kuna. \p \v 2 Bayebisaki mokonzi ya Jeriko : \pi1 — Tala, bato moko kati na bana ya Isalaele bayaki awa na butu mpo na kononga mokili. \p \v 3 Boye, mokonzi ya Jeriko atindaki maloba oyo epai ya Raabi : \pi1 — Bimisa mibali oyo bayaki epai na yo mpe bakotaki na ndako na yo, pamba te bayei nde mpo na kononga mokili mobimba. \p \v 4 Kasi mwasi yango akamataki mibali wana mibale mpe abombaki bango. Alobaki : \pi1 — Solo, mibali bayaki epai na ngai, kasi nayebaki te esika bango bawutaki. \v 5 Bakendeki na pokwa na tango oyo bakangaka ekuke ya engumba. Nayebi mpe te soki bakendeki na nzela nini. Bolanda bango noki. Bokoki solo kokanga bango. \p \v 6 Nzokande amatisaki bango likolo ya mwanza ya ndako mpe abombaki bango na se ya matiti oyo basalelaka bilamba ya lino, oyo atiaki likolo ya mwanza. \v 7 Bongo, batindami ya mokonzi babimaki mpo na kolanda banongi na nzela oyo ekenda kino na esika oyo bakatiselaka ebale Yordani na makolo. Tango kaka batindami yango babimaki na engumba, bakangaki mpe mbala moko ekuke. \p \v 8 Na butu, liboso ete banongi balala, Raabi amataki likolo ya mwanza \v 9 mpe alobaki na bango : \pi1 — Nayebi ete Yawe apesi mokili oyo na maboko na bino. Tozali na somo makasi mpo na bino mpe bavandi nyonso ya engumba oyo bazali kolenga na somo likolo na bino. \v 10 Toyokaki ndenge nini Yawe akawusaki Ebale monene ya Barozo liboso na bino tango bobimaki na Ejipito, mpe makambo oyo bosalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi mibale ya bato ya Amori, oyo bobomaki penza na ngambo ya este ya Yordani. \v 11 Tango toyokaki sango yango, mitema na biso ebukanaki mpe makasi ya moko na moko kati na biso esilaki likolo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya likolo, kuna penza na lola, mpe Nzambe ya se, awa na mabele. \v 12 Boye sik’oyo, bolapa ndayi liboso na ngai na Kombo na Yawe ete bokosalela libota na ngai bolamu ndenge ngai nasaleli bino. Bopesa ngai elembo ya solo ; \v 13 elembo oyo ekolakisa ete bokobikisa bomoi ya tata mpe ya mama na ngai, ya bandeko na ngai ya mibali mpe ya basi mpe ya bato nyonso oyo bavandaka elongo na bango, mpe lisusu ete bokobikisa biso na kufa. \p \v 14 Banongi bayebisaki ye : \pi1 — Solo, tolapi ndayi, tokondima kokufa mpo na bino soki olobi te makambo oyo tozali kosala. Tokosalela bino bolamu mpe ngolu tango Yawe akopesa biso mokili oyo. \p \v 15 Boye, Raabi abimisaki bango na lininisa mpe akitisaki bango na singa, pamba te ndako oyo azalaki kovanda ezalaki ya kokangama na eteni ya mir ya engumba. \v 16 Alobaki na bango : \pi1 — Bokende na nzela ya bangomba ya mikuse mpo ete bato oyo bazali kolanda bino bamona bino te. Bobombama kuna mikolo misato kino tango bakozonga, bongo nde bokoki kokoba nzela na bino. \p \v 17 Banongi balobaki na ye : \pi1 — Tokozala na ngambo te na ndayi oyo olapisi biso \v 18 soki, tango tokokota na mokili, okokangisa singa oyo ya motane na lininisa oyo okitiseli biso mpe okosangisa, kati na ndako na yo, tata mpe mama na yo, bandeko mpe bato nyonso ya libota na yo. \v 19 Soki moto moko abimi libanda ya ndako na yo mpe akei na balabala, makila na ye ekotangama na moto na ye moko ; ekozala ngambo na biso te. Kasi soki babomi moto moko kati na bato oyo bakozala kati na ndako na yo, wana makila na ye ekotangama na mito na biso. \v 20 Soki mpe olobi makambo oyo biso tozali kosala, tokozala na ngambo te liboso ya ndayi oyo olapisi biso. \p \v 21 Raabi azongisaki : \pi1 — Boye, tika ete esalema ndenge bolobi. \p Atikaki bango kokende, mpe bakabwanaki. Bongo na sima, akangisaki singa ya motane na lininisa. \p \v 22 Sima na bango kokabwana, bakendeki na bangomba mikuse mpe bavandaki kuna mikolo misato kino tango bato oyo bazalaki kolanda bango balembaki koluka bango na nzela nyonso. Lokola bamonaki bango te, bazongaki na bango. \v 23 Banongi oyo mibale bazongelaki nzela na bango, babimaki na bangomba mikuse, bakatisaki ebale mpe bakomaki kino epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni. Bayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango. \v 24 Balobaki na Jozue : \pi1 — Solo, Yawe apesi mokili oyo nyonso na maboko na biso ; bato nyonso bazali kolenga liboso na biso. \c 3 \s1 Bana ya Isalaele bakatisaki ebale Yordani \p \v 1 Na tongo-tongo, Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele babimaki wuta na Shitimi mpe bakendeki kino na Yordani epai wapi batongaki molako na bango liboso ete bakatisa. \v 2 Sima na mikolo misato, bakambi bakomaki kotambola kati na molako \v 3 mpo na kopesa bato mitindo oyo : \pi1 — Soki bomoni Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi komema yango, bolongwa na bisika oyo bozali mpe bolanda yango. \v 4 Bongo bokoyeba nzela nini bokoki kolanda mpo ete nanu botambola na nzela yango te. Kasi bozala mosika na Sanduku ya Boyokani, na bametele pene nkoto moko, bopusana pene na yango te. \p \v 5 Jozue alobaki na bato : \pi1 — Bomibulisa, pamba te lobi, Yawe akosala makambo ya kokamwa kati na bino. \p \v 6 Jozue alobaki na Banganga-Nzambe : \pi1 — Bomema Sanduku ya Boyokani mpe botambola liboso ya bato. \p Batombolaki yango mpe batambolaki liboso ya bato. \p \v 7 Yawe alobaki na Jozue : \pi1 — Lelo, nakobanda kotombola yo na miso ya bana nyonso ya Isalaele mpo ete bayeba ete nazali mpe elongo na yo ndenge nazalaki elongo na Moyize. \v 8 Yebisa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Boyokani : « Tango bokokoma pembeni ya mayi ya Yordani, botia makolo na bino kati na mayi mpe botelema wana. » \p \v 9 Jozue alobaki na bana ya Isalaele : \pi1 — Bopusana awa mpe boyoka maloba ya Yawe, Nzambe na bino. \p \v 10 Bongo Jozue alobaki : \pi1 — Ezali na nzela oyo nde bokoyeba solo ete Nzambe na bomoi azali elongo na bino mpe akobengana liboso na bino bato ya Kanana, ya Iti, ya Evi, ya Perizi, ya Girigazi, ya Amori mpe ya Yebusi. \v 11 Sanduku ya Boyokani ya Yawe ya mokili mobimba ekoleka liboso na bino kati na mayi ya Yordani. \v 12 Sik’oyo, bopona bato zomi na mibale kati na mabota ya Isalaele, moto moko mpo na libota moko. \v 13 Mpe tango kaka Banganga-Nzambe oyo bakomema Sanduku ya Yawe, Nkolo ya mokili mobimba, bakotia matambe ya makolo na bango kati na Yordani, mayi na yango ekokabwana na biteni mibale ; mayi oyo ekowuta na ngambo ya likolo ekotelema lokola mir. \p \v 14 Boye tango bato bakobima na molako mpo na kokatisa Yordani, Banganga-Nzambe oyo bakomema Sanduku ya Boyokani bakotambola liboso na bango. \v 15 Nzokande, na tango ya kobuka milona, mayi ya Yordani etondaka makasi penza. Kasi tango kaka Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bakomaki pembeni ya Yordani mpe batiaki matambe na bango kati na mayi, \v 16 mayi oyo ezalaki kowuta na ngambo ya likolo etikaki kotiola mpe esalaki lokola mir moko ya monene, mpe etikaki nzela moko ya monene wuta na engumba Adamu, oyo ezalaki pembeni ya Tsaritani ; bongo na ngambo mosusu, mayi oyo ezalaki kokita kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, ya lubwaku ya Yordani, esilaki nyonso. Bato bakatisaki kino na Jeriko oyo ezalaki liboso na bango. \v 17 Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe bapikamaki na mabele ya kokawuka, na kati-kati ya mayi ya Yordani, wana bana nyonso ya Isalaele bazalaki koleka kino tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa na mabele ya kokawuka. \c 4 \s1 Mabanga zomi na mibale lokola ekaniseli \p \v 1 Tango ekolo mobimba esilisaki kokatisa Yordani, Yawe alobaki na Jozue : \v 2 « Pona mibali zomi na mibale kati na bato, mobali moko mpo na libota moko. \v 3 Pesa bango mitindo oyo : ‹ Bozwa kati na mayi ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe bapikamaki, mabanga zomi na mibale, bomema yango elongo na bino mpe botia yango na esika oyo bokolekisa butu ya lelo. › » \p \v 4 Boye, Jozue abengaki mibali zomi na mibale oyo aponaki kati na bana ya Isalaele, mobali moko mpo na libota moko. \v 5 Jozue alobaki na bango : « Boleka liboso ya Sanduku ya Yawe, Nzambe na bino, kino na kati-kati ya Yordani. Moko na moko kati na bino amema libanga na lipeka na ye kolanda motango ya mabota ya Isalaele \v 6 mpo ete ezala lokola elembo kati na bino. Sima na tango, soki bana na bino batuni bino : ‹ Mabanga oyo elakisi nini ? › \v 7 Bokoyebisa bango ete mayi ya Yordani ekatanaki na biteni mibale liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Tango ekatisaki Yordani, mayi na yango mpe ekatanaki. Mabanga oyo ezali lokola ekaniseli ya seko na seko mpo na bana ya Isalaele. » \p \v 8 Boye, bana ya Isalaele basalaki ndenge Jozue atindaki bango. Bazwaki kati na Yordani, mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya Isalaele, ndenge Yawe alobaki na Jozue. Bamemaki yango kino na molako na bango, epai wapi batiaki yango. \v 9 Jozue atelemisaki mabanga zomi na mibale mosusu na kati-kati ya Yordani, na esika oyo Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani bapikamaki, mpe etikala wana kino na mokolo ya lelo. \p \v 10 Nzokande, Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku bawumelaki na kati-kati ya Yordani kino tango bato bakokisaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki Jozue, ndenge kaka Moyize ayebisaki ye. Ezalaki na lombangu nde bato bakatisaki Yordani. \v 11 Tango bango nyonso basilisaki kokatisa, Sanduku ya Yawe elongo na Banganga-Nzambe balekaki lisusu liboso ya bato. \v 12 Bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bakatisaki, balataki bibundeli mpe batambolaki liboso ya bana ya Isalaele, ndenge Moyize atindaki bango. \v 13 Bazalaki bato pene nkoto tuku minei, bato ya bitumba, oyo bakamataki bibundeli mpo na kobunda ; balekaki liboso ya Yawe na nzela ya bitando ya Jeriko mpo na kobunda. \v 14 Na mokolo wana, Yawe atombolaki Jozue na miso ya bana nyonso ya Isalaele ; mpe bapesaki ye lokumu mikolo nyonso ya bomoi na ye, ndenge kaka bapesaki Moyize lokumu. \p \v 15 Yawe alobaki na Jozue : \v 16 « Pesa Banganga-Nzambe oyo bamemi Sanduku ya Litatoli mitindo ete babima wuta na kati-kati ya ebale Yordani. » \p \v 17 Jozue apesaki mitindo epai ya Banganga-Nzambe : « Bobima wuta na kati-kati ya ebale Yordani. » \p \v 18 Boye Banganga-Nzambe oyo bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe babimaki wuta na ebale. Tango kaka batiaki matambe na bango na mokili, mayi ya Yordani ezongaki na esika na yango, etondaki makasi mpe ekomaki kotiola ndenge ezalaki momesano na yango. \p \v 19 Na mokolo ya zomi ya sanza ya liboso, bato bakendeki wuta na Yordani mpe batongaki molako na bango na Giligali, na mondelo ya este ya Jeriko. \v 20 Jozue atelemisaki, na Giligali, mabanga zomi na mibale oyo babimisaki na Yordani. \v 21 Alobaki na bana ya Isalaele : « Tango bakitani na bino bakotuna batata na bango : ‹ Mabanga oyo elakisi nini ? › \v 22 Boyebisa bango : ‹ Bato ya Isalaele bakatisaki Yordani na mabele ya kokawuka. › \v 23 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akawusaki liboso mayi ya Yordani kino tango bosilisaki kokatisa. Yawe asalaki na Yordani makambo oyo asalaki na ebale monene ya Barozo tango akawusaki yango liboso na biso, kino tango tosilisaki kokatisa yango. \v 24 Asalaki bongo mpo ete bato nyonso ya mokili bayeba ete loboko ya Yawe ezalaka na nguya, mpe mpo ete bobangaka Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso. » \c 5 \s1 Bana ya Isalaele bakatamaki ngenga na Giligali \p \v 1 Nzokande, tango bakonzi nyonso ya Amori, na ngambo ya weste ya Yordani, mpe bakonzi nyonso ya Kanana, pene ya ebale monene ya Barozo, bayokaki ndenge nini Yawe akawusaki ebale Yordani liboso ya bana ya Isalaele kino tango basilisaki kokatisa, mitema na bango ebukanaki mpe bazalaki lisusu na makasi te ya kotelemela bana ya Isalaele. \b \p \v 2 Na tango wana, Yawe alobaki na Jozue : \pi1 — Sala bambeli ya mabanga mpe kata lisusu bana mibali ya Isalaele ngenga. \p \v 3 Jozue asalaki bambeli ya mabanga mpe akataki bana mibali ya Isalaele ngenga, pene ya ngomba moke ya Araloti. \p \v 4 Tala mpo na nini Jozue asengelaki kokata bango ngenga : Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito mpe bakokisaki mibu ya kobunda bitumba bakufaki na nzela, kati na esobe, sima na bango kobima na Ejipito. \v 5 Mibali nyonso oyo babimaki na Ejipito bakatamaki ngenga ; kasi bato nyonso oyo babotamaki na nzela, kati na esobe, bakatamaki ngenga te. \v 6 Bana ya Isalaele batambolaki kati na esobe mibu tuku minei, kino tango ekeke mobimba ya mibali oyo bakokisaki mibu ya kobunda bitumba tango babimaki na Ejipito basilaki kokufa. Mpo ete batosaki Yawe te, Yawe alapaki ndayi ete bakomona te mokili oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. \v 7 Boye, atombolaki bana na esika ya batata na bango ; yango wana Jozue akataki bango ngenga, pamba te bakatamaki ngenga te na nzela. \v 8 Sima na ekolo mobimba kokatama ngenga, batikalaki esika moko kati na molako kino tango bapota na bango ekawukaki. \p \v 9 Yawe alobaki na Jozue : \pi1 — Lelo, natindiki soni ya Ejipito mosika na bino. \p Babengaki esika yango « Giligali » kino na mokolo ya lelo. \s1 Feti ya liboso ya Pasika na Kanana \p \v 10 Na pokwa ya mokolo ya zomi na minei ya sanza wana, bana ya Isalaele basalaki feti ya Pasika, wana bazalaki nanu na molako ya Giligali, na etando ya Jeriko. \v 11 Mokolo oyo elandaki feti ya Pasika, baliaki biloko ya mokili ya Kanana : mapa ezanga levire mpe bambuma ya ble oyo bakalingaki kaka mokolo wana. \v 12 Mokolo oyo elandaki mokolo oyo baliaki biloko ya mokili ya Kanana, mana etikaki kokweya ; mana ezalaki lisusu te mpo na bana ya Isalaele. Boye, na mobu wana, baliaki biloko ya mokili ya Kanana. \s1 Jozue akutanaki na Mokonzi ya mampinga ya Yawe \p \v 13 Nzokande, tango Jozue azalaki pene ya Jeriko, atombolaki miso mpe amonaki moto moko atelemi liboso na ye ; moto yango asimbaki mopanga na loboko na ye. Jozue apusanaki pene na ye mpe atunaki ye : \pi1 — Boni, ozali na ngambo na biso to na ngambo ya banguna na biso ? \p \v 14 Azongiselaki Jozue : \pi1 — Te, kasi nazali mokonzi ya mampinga ya Yawe ; nayei kaka sik’oyo. \p Boye, Jozue akweyaki elongi kino na mabele mpe alobaki na ye : \pi1 — Sango nini nkolo na ngai azali na yango mpo na mosali na ye ? \p \v 15 Mokonzi ya mampinga ya Yawe alobaki na ye : \pi1 — Longola basapato na yo na makolo, pamba te esika oyo ozali ezali bule. \p Jozue asalaki se bongo. \c 6 \s1 Bana ya Isalaele babotolaki Jeriko \p \v 1 Bikuke ya engumba Jeriko ezalaki ya kokangama makasi penza mpo na bana ya Isalaele ; moto moko te akokaki kokota to kobima. \v 2 Yawe alobaki na Jozue : \pi1 — Tala, na maboko na yo, nasili kokaba Jeriko elongo na mokonzi na yango mpe bilombe na yango ya bitumba. \v 3 Botambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo, yo elongo na bato nyonso ya etumba. Bosala bongo mikolo motoba. \v 4 Kamata Banganga-Nzambe sambo ; Nganga-Nzambe moko na moko asengeli komema kelelo moko basala na liseke ya meme. Banganga-Nzambe nyonso sambo basengeli kotambola liboso ya Sanduku. Na mokolo ya sambo, bobaluka zingazinga ya engumba mbala sambo, elongo na Banganga-Nzambe oyo bakozala kobeta bakelelo. \v 5 Tango lolaka ya bakelelo yango ekoyokana tango molayi, tika ete bato nyonso baganga makasi ; bongo mir ya engumba ekokweya na pwasa, mpe moto na moto akokota na engumba, na esika oyo akozala. \p \v 6 Boye Jozue, mwana mobali ya Nuni, abengaki Banganga-Nzambe mpe alobaki na bango : \pi1 — Bomema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe tika ete Banganga-Nzambe sambo kati na bino bakamata bakelelo sambo mpe batambola liboso ya Sanduku ya Yawe. \p \v 7 Bongo apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele : \pi1 — Bokende liboso ! Botambola zingazinga ya engumba, mpe tika ete basoda oyo bazalaka na liboso, na etumba, baleka liboso ya Sanduku ya Yawe. \p \v 8 Tango Jozue asilisaki koloba na bato, Banganga-Nzambe sambo, oyo bakamataki bakelelo sambo liboso ya Yawe, balekaki liboso mpe bakomaki kobeta yango, wana Sanduku ya Boyokani ya Yawe ezalaki kolanda bango na sima. \v 9 Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, bazalaki kotambola liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobeta bakelelo ; bongo basoda oyo batikalaka na sima, bazalaki kolanda Sanduku ya Boyokani. Na tango wana nyonso, bakelelo ezalaki kaka kobeta. \v 10 Kasi Jozue apesaki mitindo oyo epai ya bana ya Isalaele : \pi1 — Boganga te, boloba mpe eloko moko te ! Bovanda kaka kimia kino tango nakoloba na bino ete boganga makasi ; wana nde bokoganga makasi. \p \v 11 Boye, Sanduku ya Yawe ezalaki kotambola zingazinga ya engumba mbala moko na mokolo ; bongo na sima, bato bazalaki kozonga na molako mpo na kolekisa butu. \p \v 12 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki, mpe Banganga-Nzambe bamemaki Sanduku ya Yawe. \v 13 Banganga-Nzambe sambo oyo basimbaki bakelelo sambo balekaki liboso, batambolaki liboso ya Sanduku ya Yawe, na kobeta bakelelo. Basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, balekaki liboso na bango ; mpe basoda oyo batikalaka na sima bazalaki kolanda Sanduku ya Yawe, wana bakelelo ezalaki kobeta. \v 14 Na mokolo ya mibale, babalukaki lisusu engumba mbala moko ; bongo na sima, bazongaki na molako. Boye, basalaki bongo mikolo motoba. \p \v 15 Na mokolo ya sambo, balamukaki na tongo-tongo mpe babalukaki zingazinga ya engumba mbala sambo, ndenge kaka bazalaki kosala. Ezalaki kaka mokolo wana nde babalukaki mbala sambo zingazinga ya engumba. \v 16 Na mbala oyo ya sambo, tango Banganga-Nzambe babetaki bakelelo tango molayi, Jozue apesaki mitindo epai ya bato : \pi1 — Boganga makasi, pamba te Yawe akabi engumba oyo na maboko na bino ! \v 17 Bobebisa mpo na Yawe engumba oyo nyonso elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango. Bobikisa kaka Raabi, mwasi ya ndumba, elongo na bato na ye nyonso oyo bakozala kati na ndako na ye, pamba te abombaki banongi oyo totindaki. \v 18 Kasi bosala keba na tina na biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, mpo ete bomilukela pasi te na koluka kokamata ata eloko moko kati na yango, noki te bokomema lisuma oyo ekobebisa molako ya Isalaele mpe bokotia yango na mobulu. \v 19 Kasi palata, wolo mpe biloko nyonso ya bronze elongo na bibende ekobulisama mpo na Yawe mpe esengeli kokende na ebombelo bomengo ya Yawe. \p \v 20 Tango babetaki bakelelo, bato bagangaki makasi. Bongo, tango bato bagangaki makasi sima na koyoka lolaka ya kelelo kobeta tango molayi, mir ya engumba ekweyaki na pwasa. Boye, moto nyonso akotaki na engumba, liboso na ye, mpe babotolaki yango. \v 21 Babomaki na mopanga, nyonso oyo ezalaki kati na engumba : mobali to mwasi, elenge to mobange, ngombe to meme to mpe ane. \s1 Lobiko ya libota ya Raabi \p \v 22 Jozue alobaki na bato mibale oyo banongaki Jeriko : \pi1 — Bokota na ndako ya mwasi ya ndumba, bobimisa ye libanda elongo na bato na ye nyonso, kolanda ndayi oyo bolapaki liboso na ye. \p \v 23 Boye, bilenge mibali oyo bakendeki kononga mokili bakotaki mpe babimisaki Raabi, tata na ye, mama na ye, bandeko na ye ya mibali mpe biloko na ye nyonso. Babimisaki libota na ye mobimba na libanda mpe batiaki bango libanda ya molako ya Isalaele. \p \v 24 Batumbaki engumba mobimba elongo na biloko nyonso oyo ezalaki kati na yango, longola kaka palata mpe wolo, bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende oyo batiaki na ebombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe. \v 25 Jozue abikisaki Raabi, mwasi ya ndumba, libota na ye mpe bato na ye nyonso, pamba te abombaki bato oyo Jozue atindaki mpo na kononga Jeriko. Boye, akomaki kovanda kati na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo. \p \v 26 Kaka na tango yango, Jozue akataki seleka oyo : \q1 « Tika ete moto oyo akoluka kotonga lisusu engumba Jeriko \q2 alakelama mabe liboso ya Yawe ! \q1 Solo, akofuta motuya ya bomoi ya mwana na ye ya liboso ya mobali, \q2 tango akotonga miboko na yango ; \q1 mpe motuya ya bomoi ya mwana na ye ya suka, \q2 tango akotia bikuke na yango. » \p \v 27 Yawe azalaki elongo na Jozue, mpe sango na ye epanzanaki mokili mobimba. \c 7 \s1 Akana asalaki masumu \p \v 1 Bato ya Isalaele babebisaki ekila ya Yawe. Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, akamataki biloko oyo Yawe apekisaki. Bongo, kanda ya Yawe epelaki likolo ya bana ya Isalaele. \p \v 2 Wuta na Jeriko, Jozue atindaki bato kokende na engumba Ayi oyo ezalaki pene ya Beti-Aveni, na ngambo ya este ya Beteli. Alobaki na bango : « Bokende kononga mokili wana. » \p Bato yango bakendeki mpe banongaki Ayi. \p \v 3 Tango bazongaki epai ya Jozue, balobaki na ye : « Ezali penza na tina te ete bato nyonso bakende kobundisa Ayi. Tinda kaka bato nkoto mibale to nkoto misato mpo na kobotola yango. Komonisa bato nyonso pasi te, pamba te engumba yango ezali kaka na bato moke. » \p \v 4 Boye, bato pene nkoto misato bakendeki, kasi bakimaki liboso ya bato ya Ayi. \v 5 Bato ya Ayi babomaki bato pene tuku misato na motoba na molongo ya Isalaele. Balandaki bango kino koleka ekuke ya engumba Shebarimi mpe babomaki bango na kokita ya ngomba. Mpo na yango, mitema ya bana ya Isalaele elembaki mpe bakomaki lokola mayi oyo ezali kotiola. \p \v 6 Jozue apasolaki bilamba na ye mpe amibwakaki elongi kino na mabele liboso ya Sanduku ya Yawe kino na pokwa. Bakambi ya Isalaele mpe basalaki kaka ndenge moko, bamisopelaki putulu na mito na bango. \v 7 Jozue alobaki : \pi1 — Ah Nkolo Yawe, mpo na nini otikaki ete bato oyo bakatisa Yordani ? Boni, ezalaki mpo ete okaba biso na maboko ya bato ya Amori ete baboma biso ? Elekaki malamu ete totikala na biso na ngambo mosusu ya ebale ! \v 8 Oh Nkolo, sik’oyo naloba nini, awa Isalaele akimi liboso ya banguna na ye ? \v 9 Bato ya Kanana mpe bato mosusu ya mokili bakoyoka sango yango, bakobalukela biso mpe bakolongola kombo na biso na mokili. Boye, okosala nini mpo na monene ya Kombo na Yo ? \p \v 10 Yawe alobaki na Jozue : \pi1 — Telema ! Mpo na nini omibwaki elongi kino na mabele ? \v 11 Isalaele asali lisumu. Babebisi boyokani na Ngai oyo natindaki bango ete babatela. Bakamati ndambo ya biloko oyo ekabami mpo na kobebisama, bayibi yango mpe babombi yango kati na biloko na bango. \v 12 Yango wana, bana ya Isalaele bakolonga kotelema te liboso ya banguna na bango, bakozonga sima mpe bakokima liboso ya banguna na bango, pamba te babebisi ekila. Nakozala elongo na bino te soki bolongoli te mabe oyo ezali kati na bino. \v 13 Telema, bulisa bato. Loba na bango : « Bomibulisa mpo na lobi, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi boye : ‹ Mabe ezali kati na yo Isalaele, okolonga kobundisa banguna na yo te kino tango okolongola yango. › \v 14 Lobi na tongo, bokopusana pene na Ngai, libota na libota. Libota oyo Yawe akopona ekopusana, etuka na etuka ; etuka oyo Yawe akopona ekopusana, ndako na ndako ; mpe ndako oyo Yawe akopona ekopusana, moto na moto. \v 15 Moto nyonso oyo mabe ekomonana kati na ye asengeli kokufa na moto, ye elongo na nyonso ya ye, pamba te abebisi boyokani ya Yawe mpe asali likambo ya soni kati na Isalaele. » \s1 Akana azwaki etumbu \p \v 16 Mokolo oyo elandaki, Jozue alamukaki na tongo-tongo penza, mpe abengisaki Isalaele, libota na libota. Mpe ezali libota ya Yuda nde eponamaki. \v 17 Tango abengisaki etuka na etuka ya libota ya Yuda, etuka ya Zera nde eponamaki. Tango abengisaki ndako na ndako kati na etuka ya Zera, ndako ya Zabidi nde eponamaki. \v 18 Sima, tango abengisaki moto na moto kati na ndako ya Zabidi, Akana, mwana mobali ya Karimi, mwana mobali ya Zabidi, mwana mobali ya Zera, moto ya libota ya Yuda, nde aponamaki. \p \v 19 Jozue alobaki na Akana : \pi1 — Mwana na ngai, pesa nkembo epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpe pesa Ye penza lokumu. Yebisa ngai likambo oyo osalaki, kobombela ngai eloko moko te. \p \v 20 Akana azongiselaki Jozue : \pi1 — Solo, nasali lisumu liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala likambo oyo nasalaki : \v 21 Namonaki, kati na bomengo ya bitumba, kazaka moko ya kitoko ya mboka Mezopotami, mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale mpe ndambo ya kilo ya wolo ; nalulaki yango mpe nazwaki yango. Nakundaki yango na kati-kati ya ndako na ngai ya kapo, mpe palata ezali na se na yango. \p \v 22 Jozue atindaki bato, mpe bakendeki mbangu kati na ndako ya kapo ya Akana mpe bakutaki penza kazaka bakunda na se ya ndako ya kapo, elongo na palata, na se na yango. \v 23 Babimisaki biloko yango wuta na ndako na ye ya kapo, bamemaki yango liboso ya Jozue mpe ya bana nyonso ya Isalaele ; mpe sima, basopaki yango liboso ya Yawe. \p \v 24 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bakamataki Akana, mwana mobali ya Zera, elongo na palata, kazaka, liboke ya wolo, bana na ye ya mibali mpe ya basi, bangombe na ye, ba-ane na ye, bameme mpe bantaba na ye, ndako na ye ya kapo mpe biloko na ye nyonso ; bamemaki bango na Lubwaku ya Akori. \v 25 Jozue alobaki : « Mpo na nini omemeli biso pasi ? Tika ete Yawe amonisa yo pasi lelo ! » \p Bongo bato nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki ; babambaki lisusu mabanga na bato oyo batikalaki mpe bato yango bakufaki ; mpe batumbaki bibembe na bango na moto. \v 26 Babwakaki na likolo ya Akana liboke ya mabanga ebele oyo ezali kino na mokolo ya lelo, mpe kanda ya Yawe esilaki. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Lubwaku ya Akori. \c 8 \s1 Isalaele abotolaki engumba Ayi \p \v 1 Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga te mpe kolemba nzoto te. Kamata elongo na yo basoda nyonso, mata mpe bundisa engumba Ayi. Pamba te nasili kokaba na maboko na yo : mokonzi ya Ayi, bato na ye, engumba na ye, mpe mokili na ye. \v 2 Okosala engumba Ayi mpe mokonzi na yango ndenge osalaki Jeriko mpe mokonzi na yango ; kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba, biloko mpe bibwele na yango. Bomba basoda na sima ya engumba. » \p \v 3 Jozue atelemaki elongo na basoda nyonso mpo na kobundisa engumba Ayi. Aponaki bilombe ya bitumba nkoto tuku misato mpe atindaki bango na butu. \v 4 Apesaki bango mitindo oyo : « Bobombama na sima ya engumba oyo ; bozala penza mosika mingi te na engumba, kasi bozala pene. \v 5 Ngai mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ngai, tokopusana pene ya engumba. Tango bakobima mpo na kobundisa biso lokola na mbala oyo eleki, tokokima liboso na bango. \v 6 Bakolanda biso, mpe tokobenda bango mosika ya engumba, pamba te bakoloba : ‹ Bazali kokima liboso na biso lokola na mbala oyo eleki, › mpe tokokima liboso na bango. \v 7 Boye, bino bokobima wuta na bisika oyo bokobombama mpe bokobotola engumba. Yawe, Nzambe na bino, akabi yango na maboko na bino. \v 8 Tango bokobotola engumba, botia yango moto mpe bosala ndenge Yawe alobaki. » \p \v 9 Jozue atindaki bango, mpe bakendeki na esika oyo basengelaki kobombama. Babombamaki na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya Ayi. Jozue alekisaki butu wana elongo na bana ya Isalaele. \p \v 10 Jozue alamukaki na tongo-tongo penza mpe atalaki ndenge nini basoda na ye bamilengelaki. Sima na yango, alekaki liboso elongo na bakambi ya Isalaele mpo na kokende kobundisa engumba Ayi. \v 11 Basoda na ye nyonso bapusanaki kino na liboso ya engumba mpe batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya Ayi, bongo lubwaku ezalaki kati na bango mpe Ayi. \v 12 Jozue azwaki basoda nkoto mitano mpe abombaki bango na kati-kati ya Beteli mpe Ayi, na ngambo ya weste ya engumba. \v 13 Mampinga ya basoda oyo bazalaka na liboso, na bitumba, batongaki molako na bango na ngambo ya nor ya engumba ; mpe basoda oyo batikalaka na sima, na ngambo ya weste ya engumba. Na butu wana, Jozue akendeki na kati-kati ya etando. \p \v 14 Tango mokonzi ya Ayi amonaki bongo, ye elongo na bato na ye nyonso, bavandi ya engumba, batelemaki na lombangu mpe babimaki mpo na kobundisa Isalaele na esika oyo nzela ekutana, liboso ya Araba. Ayebaki te ete basoda mosusu babombamaki na sima ya engumba. \v 15 Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele bakosaki lokola bato oyo basili kokweya na bitumba mpe bakimaki na ngambo ya esobe. \v 16 Babelelaki bato nyonso ya Ayi mpo ete balanda bango. Boye, balandaki Jozue mpe bakendeki mosika ya engumba. \v 17 Kati na Ayi mpe Beteli, mobali moko te atikalaki oyo azangaki kolanda Isalaele. Batikaki engumba ya kofungwama, wana bazalaki kolanda Isalaele. \p \v 18 Yawe alobaki na Jozue : « Sembola na ngambo ya Ayi likonga oyo osimbi na loboko, pamba te nalingi kokaba yango na maboko na yo. » Boye Jozue asembolaki na ngambo ya engumba likonga oyo ezalaki na loboko na ye. \v 19 Tango kaka asembolaki loboko, basoda oyo babombamaki babimaki na lombangu wuta na bisika oyo babombamaki, bakotaki na engumba, babotolaki yango mpe batiaki yango moto. \p \v 20 Tango bato ya Ayi batalaki na sima, bamonaki milinga komata na likolo wuta na engumba ; moko te akokaki lisusu kokima na ngambo moko to na ngambo mosusu. Bana ya Isalaele oyo bazalaki kokima na esobe babalukelaki bato oyo bazalaki kolanda bango. \v 21 Boye, tango Jozue mpe bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete basoda oyo babombamaki bazwi engumba mpe milinga ezali komata wuta na engumba, bazongaki mpe babomaki bato ya Ayi. \v 22 Basoda ya Isalaele oyo babombamaki, babimaki na engumba mpo na kobundisa bango. Bato ya Ayi bakomaki na kati-kati ya basoda ya Isalaele oyo bazalaki, bamoko na ngambo moko, mpe bamosusu, na ngambo mosusu. Basoda ya Isalaele basilisaki koboma bango nyonso, ata moko te atikalaki na bomoi, mpe ata moko te akimaki. \v 23 Kasi bakangaki ya bomoi mokonzi ya Ayi mpe bamemaki ye epai ya Jozue. \p \v 24 Tango Isalaele asilisaki koboma mibali nyonso ya Ayi, kati na zamba mpe kati na esobe epai wapi balandaki bango, mpe wana bango nyonso basilaki kokufa na mopanga, bana nyonso ya Isalaele bazongaki na Ayi mpe babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna. \v 25 Motango ya bato nyonso oyo bakufaki na mokolo wana, basi mpe mibali, ezalaki nkoto zomi na mibale : bango nyonso bazalaki bato ya Ayi. \v 26 Jozue akitisaki te loboko na ye, oyo esimbaki likonga kino tango asilisaki koboma bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ayi. \v 27 Kasi Isalaele azwaki mpo na ye, lokola bomengo ya bitumba, bibwele mpe biloko ya engumba yango, kolanda liloba oyo Yawe alobaki na Jozue. \p \v 28 Jozue atumbaki Ayi mpe akomisaki yango libebi mpo na libela, esika ezanga bato kino na mokolo ya lelo. \v 29 Adiembikaki mokonzi ya Ayi, na nzete kino na pokwa ; bongo tango moyi elalaki, Jozue atindaki ete balongola ebembe yango na nzete. Babwakaki yango na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe batondisaki na likolo na yango liboke monene ya mabanga oyo ezali kino na mokolo ya lelo. \s1 Boyokani ya sika na ngomba Ebali \p \v 30 Jozue atongaki etumbelo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, na ngomba Ebali, \v 31 ndenge Moyize, mosali na Yawe, atindaki bana ya Isalaele. Atongaki yango kolanda makambo oyo ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize : etumbelo etongama na mabanga oyo bakata na esalelo ya ebende te. Na likolo na yango, batiaki mbeka ya kotumba mpo na Yawe mpe babonzaki mbeka ya boyokani. \v 32 Na esika yango, na miso ya bana nyonso ya Isalaele, Jozue akomaki, na likolo ya mabanga, Mobeko oyo Moyize akomaki mpo na bana ya Isalaele. \v 33 Bato nyonso ya Isalaele elongo na bakambi na bango, bakomi mibeko mpe basambisi na bango, batelemaki ngambo na ngambo ya Sanduku ya Boyokani, liboso ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bamemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Mopaya elongo na mwana mboka ya Isalaele bazalaki wana. Ndambo ezalaki liboso ya ngomba Garizimi, mpe ndambo mosusu, liboso ya ngomba Ebali, kolanda mitindo oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki mpo na kopambola bana ya Isalaele. \p \v 34 Sima na yango, Jozue atangaki maloba nyonso ya Mobeko : mapamboli mpe bilakeli mabe kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko. \v 35 Jozue azangisaki te kotanga, liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele, basi, bana mpe bapaya oyo bazalaki kati na bango, maloba nyonso oyo Moyize akomaki. \c 9 \s1 Jozue asalaki boyokani elongo na bato ya Gabaoni \p \v 1 Tango bakonzi nyonso (bakonzi ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi) oyo bazalaki na ngambo ya weste ya Yordani, kati na mokili ya bangomba, na etando mpe na mokili oyo ezalaki pembeni-pembeni ya Mayi monene Mediterane, pene ya Libani, bayokaki sango ya makambo yango, \v 2 basanganaki mpo na kobundisa Jozue mpe Isalaele. \p \v 3 Tango mpe bato ya Gabaoni bayokaki makambo oyo Jozue asalaki na Jeriko mpe na Ayi, \v 4 basalelaki mayele mabe : babongolaki lolenge na bango, batiaki na likolo ya ba-ane na bango basaki epasuka-pasuka mpe bambeki ya kala ya vino oyo etoboka-toboka mpe babamba-bamba. \v 5 Balataki basapato ya kala oyo babamba-bamba mpe bilamba ya kala ; mapa na bango ya kolia ezalaki biteni-biteni mpe ya kokawuka. \v 6 Bakendeki kokutana na Jozue kati na molako ya Giligali, mpe balobaki na ye mpe na bana ya Isalaele : \pi1 — Towuti na mokili moko ya mosika ; bosala boyokani elongo na biso. \p \v 7 Bato ya Isalaele balobaki na bato ya Evi : \pi1 — Tango mosusu bozalaka kaka pembeni na biso ! Ndenge nini tosala boyokani elongo na bino ? \p \v 8 Bazongiselaki Jozue : \pi1 — Tozali basali na yo. \p Kasi Jozue atunaki bango : \pi1 — Bozali banani mpe bowuti wapi ? \p \v 9 Bazongiselaki ye : \pi1 — Basali na yo bawuti na mokili moko ya mosika penza, likolo ya sango na Yawe, Nzambe na bino. Pamba te toyokaki sango na Ye mpo na makambo nyonso oyo asalaki kati na Ejipito \v 10 mpe epai ya bakonzi mibale ya bato ya Amori oyo bazalaki na ngambo ya este ya Yordani : Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti. \v 11 Bampaka na biso mpe bavandi nyonso ya mokili na biso balobaki na biso : « Bokamata biloko ya kolia na nzela, bokende kokutana na bango mpe boyebisa bango : ‹ Tozali basali na bino, bosala boyokani elongo na biso. › » \v 12 Tala kutu mapa na biso, ezalaki ya moto tango tobongisaki yango na bandako na biso lokola bilei ya mobembo, na mokolo oyo tolongwaki mpo ete toya epai na bino. Kasi sik’oyo tala ndenge nini esili kokawuka mpe kokoma biteni-biteni. \v 13 Mpe lisusu, totondisaki bambeki oyo na vino tango ezalaki nanu ya sika, kasi tala sik’oyo ndenge nini esili kopasuka-pasuka mpe tala ndenge nini bilamba mpe basapato na biso esili kokufa mpo ete nzela ya mobembo eleki molayi. \p \v 14 Bana ya Isalaele bazwaki bilei oyo bato ya Gabaoni bayaki na yango, kasi batunaki Yawe te. \v 15 Jozue asalaki elongo na bango boyokani ya kimia ; alakaki ete akoboma bango te. Mpe bakambi ya lisanga ya Isalaele bandimaki yango na kolapa ndayi. \p \v 16 Nzokande, mikolo misato sima na kosala boyokani elongo na bato ya Gabaoni, bana ya Isalaele bayokaki ete bato yango bazalaka pene na bango mpe bavandaka kati na bango. \v 17 Boye, bana ya Isalaele batelemaki mpo na kokende ; mpe na mokolo ya misato, bakomaki na bingumba na bango : Gabaoni, Kefira, Beyeroti mpe Kiriati-Yearimi. \v 18 Kasi bana ya Isalaele babundisaki bango te, pamba te bakambi ya lisanga balapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. \p Boye, lisanga mobimba ekomaki koyimayima mpo na bakambi. \v 19 Kasi bakambi nyonso balobaki na lisanga mobimba : « Solo, tolapaki ndayi mpo na bango na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Boye, tokoki kosala bango mabe te. \v 20 Kasi tala ndenge nini tokoki kosala bango : Tokotika bango kobika mpo ete kanda na Nzambe ekitela biso te, pamba te tolapaki ndayi na tina na bango. » \v 21 Bakambi babakisaki lisusu : « Tika ete bazala na bomoi, kasi bakobanda kokata banzete mpe kotoka mayi mpo na lisanga mobimba. » Wana nde ezalaki mokano oyo bakambi bazwaki. \p \v 22 Jozue abengisaki bato ya Gabaoni mpe atunaki bango : \pi1 — Mpo na nini bokosaki biso na koloba : « Tovandaka mosika na bino, » nzokande bovandi kaka pene na biso awa ? \v 23 Bozali sik’oyo na se ya elakeli mabe mpe bokotikala libela kozala bawumbu ; bokobanda kokataka bakoni mpe kotokaka mayi mpo na Ndako ya Nzambe na ngai. \p \v 24 Bazongiselaki Jozue : \pi1 — Basali na yo bayokaki sango ya mitindo oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki epai ya mosali na Ye Moyize, ete akopesa bino mokili oyo nyonso mpe akoboma bato na yango nyonso liboso na bino. Boye, tozalaki na somo makasi ya kobungisa bomoi na biso liboso na bino ; yango wana tosalaki bongo. \v 25 Tala biso oyo, tomitiki na maboko na yo ; nyonso oyo okomona malamu mpe sembo na miso na yo, sala biso yango. \p \v 26 Jozue abikisaki bango na maboko ya bana ya Isalaele, mpe babomaki bango te. \v 27 Na mokolo wana, Jozue akomisaki bango bawumbu mpo na kokata bakoni mpe kotoka mayi mpo na lisanga ya Isalaele mpe mpo na etumbelo ya Yawe, kino na mokolo ya lelo, na esika nyonso oyo Yawe akopona. \c 10 \s1 Jozue alongaki bakonzi ya bato ya Amori \p \v 1 Nzokande, Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, ayokaki ete Jozue abotolaki Ayi mpe abebisaki yango nyonso ; asalaki Ayi mpe mokonzi na yango ndenge kaka asalaki Jeriko mpe mokonzi na yango. Ayokaki lisusu ete bavandi ya Gabaoni basalaki boyokani ya kimia elongo na Isalaele mpe bakomaki kovanda kati na bango. \v 2 Boye, sango oyo epesaki somo na mokonzi ya Yelusalemi elongo na bato na ye, pamba te Gabaoni ezalaki engumba moko ya monene lokola bingumba ya bakonzi ; ezalaki monene koleka ata Ayi, mpe mibali na yango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba. \v 3 Adoni-Tsedeki, mokonzi ya Yelusalemi, atindaki maloba epai ya Oami, mokonzi ya Ebron ; epai ya Pireami, mokonzi ya Yarimuti ; epai ya Yafia, mokonzi ya Lakishi ; mpe epai ya Debiri, mokonzi ya Egiloni. \v 4 Alobaki : « Boya epai na ngai mpe bosunga ngai mpo ete tobundisa Gabaoni, pamba te asali boyokani ya kimia elongo na Jozue mpe bana ya Isalaele. » \p \v 5 Boye bakonzi mitano ya bato ya Amori : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni, bakendeki elongo na mampinga na bango nyonso mpo na kozingela Gabaoni mpe kobundisa yango. \p \v 6 Bato ya Gabaoni batindaki maloba epai ya Jozue kati na molako ya Giligali : « Koboya te kosunga basali na yo, yaka noki epai na biso mpe bikisa biso, pamba te bakonzi nyonso ya bato ya Amori, oyo bavandaka na ngomba, basaleli biso likita. » \p \v 7 Jozue amataki wuta na Giligali elongo na mampinga na ye nyonso mpe bilombe nyonso ya bitumba. \v 8 Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te nakabi bango na maboko na yo ; moko te akokoka kotelema liboso na yo. » \p \v 9 Sima na kotambola butu mobimba wuta na Giligali, Jozue abimelaki bango na pwasa. \v 10 Yawe akimisaki bango liboso ya Isalaele, mpe Isalaele akweyisaki bango pene ya Gabaoni. Bana ya Isalaele balandaki bango na nzela oyo ekenda kino na Beti-Oroni mpe babomaki bango kino na Azeka mpe Makeda. \v 11 Wana bazalaki kokima liboso ya Isalaele mpe kokita na Beti-Oroni, Yawe akitiselaki bango mabanga minene wuta na likolo kino na Azeka, mpe bakufaki. Bato oyo bakufaki na mabanga ya moto bazalaki motango ebele koleka ata bato oyo bana ya Isalaele babomaki na mopanga. \p \v 12 Na mokolo oyo Yawe akabaki bato ya Amori na maboko ya bana ya Isalaele, Jozue alobaki na Yawe na miso ya Isalaele : \q1 « Moyi, telema na Gabaoni ! \q2 Sanza, telema na lubwaku ya Ayaloni ! » \p \v 13 Boye moyi etelemaki, mpe sanza eninganaki te kino tango ekolo ya Isalaele alongaki banguna na ye kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Moto ya Sembo. \p Moyi etelemaki na kati-kati ya mapata mpe elalaki noki te, pene mokolo mobimba. \v 14 Mokolo ya boye etikala nanu kozala te, ezala na tango ya kala to na tango oyo ekoya, mokolo oyo Yawe atosi mongongo ya moto. Solo Yawe azalaki kobundela Isalaele. \v 15 Jozue elongo na Isalaele mobimba bazongaki na molako na Giligali. \s1 Jozue abomaki bakonzi mitano ya Amori \p \v 16 Nzokande, bakonzi wana mitano bakimaki mpe bakendeki kobombama kati na lidusu ya mabanga, na Makeda. \v 17 Tango bayebisaki Jozue ete bamoni bakonzi yango mitano babombami kati na lidusu ya mabanga, na Makeda, \v 18 Jozue alobaki : « Bopusa mabanga minene na ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe botia bato pene na yango mpo na kobatela yango. \v 19 Kasi bosuka wana te. Bolanda banguna na bino mpe bokanga bango nzela mpo ete bakota na bingumba na bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akabi bango na maboko na bino. » \p \v 20 Tango Jozue mpe bana ya Isalaele balongaki bango mpe basilisaki koboma bango, ndambo ya bato oyo babikaki bakimaki mpe bakotaki na bingumba oyo etongama makasi. \v 21 Bato nyonso ya Isalaele bazongaki na kimia na molako pene ya Jozue, na Makeda. Moko te alobaki lisusu mabe mpo na bana ya Isalaele. \p \v 22 Sima, Jozue alobaki : « Bofungola ekotelo ya lidusu ya mabanga mpe bobimisa bakonzi wana mitano. » \v 23 Boye babimisaki bakonzi wana mitano na libanda ya lidusu ya mabanga : mokonzi ya Yelusalemi, ya Ebron, ya Yarimuti, ya Lakishi mpe ya Egiloni. \v 24 Tango bamemaki bakonzi yango epai ya Jozue, abengisaki mibali nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bakonzi ya basoda oyo bazalaki na ye elongo : « Bopusana mpe botia makolo na bino na bakingo ya bakonzi oyo. » Bakonzi ya basoda bapusanaki mpe batiaki makolo na bango na bakingo ya bakonzi yango. \p \v 25 Jozue alobaki na bango : « Bobanga te mpe bolemba nzoto te. Bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te ezali boye nde Yawe akosala banguna nyonso oyo bokobundisa. » \p \v 26 Sima na yango, Jozue abomaki bakonzi yango mpe adiembikaki bango na banzete mitano. Bibembe na bango etikalaki kodiembela na banzete yango kino na pokwa. \p \v 27 Tango moyi elalaki, Jozue apesaki mitindo ete bakitisa bibembe yango wuta na banzete mpe babwaka yango kati na lidusu ya mabanga epai wapi babombamaki. Batiaki mabanga minene na ekotelo ya lidusu ya mabanga. Mabanga yango ezali wana kino na mokolo ya lelo. \s1 Isalaele abotoli bingumba ya Sude \p \v 28 Kaka na mokolo yango, Jozue abotolaki engumba Makeda. Abomaki na mopanga mokonzi na yango mpe moto nyonso oyo akutaki kuna mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi ya Makeda ndenge kaka asalaki mokonzi ya Jeriko. \p \v 29 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Makeda, bakendeki kino na engumba Libina mpe babundisaki yango. \v 30 Yawe akabaki lisusu engumba mpe mokonzi na yango na maboko ya Isalaele. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna ; mpe atikaki ata moto moko te na bomoi. Asalaki mokonzi na yango ndenge asalaki mokonzi ya Jeriko. \p \v 31 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Libina mpe bakendeki kino na Lakishi. Bazingelaki yango mpe babundisaki yango. \v 32 Yawe akabaki engumba Lakishi na maboko ya Isalaele, mpe Jozue abotolaki yango, mokolo oyo elandaki. Jozue abomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna ndenge kaka asalaki engumba Libina. \v 33 Boye, Orami, mokonzi ya Gezeri, amataki mpo na kosunga Lakishi ; kasi Jozue abomaki ye na mopanga elongo na bato na ye, atikaki ata moto moko te na bomoi. \p \v 34 Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele balongwaki na Lakishi mpe bakendeki kino na engumba Egiloni ; bazingelaki yango mpe babundisaki yango. \v 35 Babotolaki yango kaka na mokolo wana mpe babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna ; babebisaki bango mokolo wana, ndenge kaka basalaki na Lakishi. \p \v 36 Jozue mpe Isalaele mobimba balongwaki na Egiloni, bamataki kino na Ebron mpe babundisaki yango. \v 37 Babotolaki engumba yango, babomaki na mopanga bato nyonso oyo bazalaki kuna elongo na mokonzi na yango. Bazwaki mpe bamboka na yango ya mike-mike mpe babomaki na mopanga, bato nyonso oyo bazalaki kuna. Batikaki ata moto moko te na bomoi, ndenge kaka basalaki na engumba Egiloni. Babebisaki yango nyonso penza mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna. \p \v 38 Jozue elongo na Isalaele mobimba babalukaki na ngambo ya engumba Debiri mpe babundisaki yango. \v 39 Babotolaki engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, bakangaki mokonzi na yango mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki kuna na mopanga. Batikaki ata moto moko te na bomoi. Jozue asalaki engumba Debiri elongo na mokonzi na yango, ndenge kaka asalaki engumba Libina elongo na mokonzi na yango, mpe Ebron elongo na mokonzi na yango. \p \v 40 Boye, Jozue alongaki etuka wana nyonso : mokili ya bangomba, Negevi, etando ya pembeni-pembeni ya Ebale monene mpe etando ya se ya bangomba elongo na bakonzi na yango nyonso. Atikaki ata moto moko te na bomoi, abebisaki bato nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki na bomoi, ndenge Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki ye mitindo. \v 41 Jozue alongaki bango wuta na Kadeshi-Barinea kino na Gaza, mpe mokili mobimba ya Gosheni kino na Gabaoni. \v 42 Jozue alongaki bakonzi wana nyonso na mbala moko mpe abotolaki bamboka na bango, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, azalaki kobundela Isalaele. \p \v 43 Sima na yango, Jozue elongo na bana nyonso ya Isalaele bazongaki na molako na Giligali. \c 11 \s1 Isalaele alongi lisanga ya bakonzi ya ngambo ya nor \p \v 1 Tango Yabini, mokonzi ya Atsori, ayokaki makambo oyo, atindaki maloba epai ya Yobabi, mokonzi ya Madoni ; epai ya mokonzi ya Shimironi, epai ya mokonzi ya Akishafi, \v 2 epai ya bakonzi oyo bazalaki na etuka ya bangomba na nor, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Kinereti, na mokili ya bangomba mikuse, na ngambo ya weste ya etando ya Dori ; \v 3 epai ya bato ya Kanana oyo bazalaki na ngambo ya este mpe na ngambo ya weste ; epai ya bato ya Amori, ya Iti, ya Perizi mpe ya Yebusi, oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba ; epai ya bato ya Evi, na se ya Erimoni, na mokili ya Mitsipa. \v 4 Babimaki elongo na mampinga na bango nyonso, mpe bato bazalaki ebele lokola zelo ya ebale elongo na motango monene ya bampunda mpe ya bashar. \v 5 Bakonzi yango nyonso basangisaki mampinga na bango esika moko mpe batongaki molako na bango pembeni ya mayi ya Meromi mpo na kobundisa Isalaele. \p \v 6 Yawe alobaki na Jozue : « Kobanga bango te, pamba te lobi, kaka na ngonga oyo, nakokaba bango nyonso na maboko ya Isalaele lokola bibembe. Okokata misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe okotumba bashar na bango. » \p \v 7 Boye Jozue elongo na mampinga na ye nyonso babimelaki bango na pwasa, na mayi ya Meromi mpe babundisaki bango ; \v 8 bongo Yawe akabaki bango na maboko ya Isalaele. Balongaki bango mpe balandaki bango kino na Sidoni, engumba monene, kino na Misirefoti-Mayimi mpe kino na ngambo ya este ya lubwaku ya Mitsipe. Babomaki bango mpe batikaki ata moto moko te na bomoi. \v 9 Jozue asalaki bango ndenge Yawe atindaki : akataki misisa ya makolo ya bampunda na bango mpe atumbaki bashar na bango. \s1 Jozue abotoli Atsori \p \v 10 Na tango wana, Jozue azongaki, abotolaki engumba Atsori mpe abomaki mokonzi na yango na mopanga. Atsori ezalaki mboka mokonzi ya mokili wana nyonso. \v 11 Babomaki moto nyonso oyo azalaki kuna na mopanga. Babebisaki penza bango nyonso, babikisaki ata ekelamu moko te ya pema mpe batumbaki engumba Atsori. \p \v 12 Jozue abotolaki bingumba nyonso ya bakonzi wana mpe abomaki bakonzi na yango na mopanga. Abomaki bango nyonso kolanda ndenge Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki. \v 13 Kasi Isalaele atikalaki te kotumba bingumba oyo ezalaki na bangomba longola kaka Atsori oyo Jozue atumbaki. \v 14 Bana ya Isalaele bazwaki mpo na bango lokola bomengo ya bitumba : biloko nyonso ya engumba wana mpe bibwele na yango, kasi basilisaki koboma bato nyonso na mopanga, batikaki ata moto moko te na bomoi. \v 15 Jozue asalaki ndenge kaka Yawe atindaki ye na nzela ya mosali na ye Moyize, atikaki ata eloko moko te kati na makambo nyonso oyo Yawe atindaki Moyize. \s1 Bamboka oyo Jozue alongaki \p \v 16 Jozue abotolaki bamboka oyo nyonso : mokili ya bangomba, Negevi mobimba, mokili mobimba ya Gosheni, mokili ya se, etando ya Araba, ngomba ya Isalaele mpe bamboka na yango ya se, \v 17 wuta na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri kino na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani na ebandeli ya ngomba Erimoni. Abundisaki bakonzi na yango nyonso mpe abomaki bango. \v 18 Jozue abundisaki bakonzi wana nyonso tango molayi. \v 19 Longola kaka bato ya Evi oyo bazalaki kovanda na Gabaoni, engumba moko te etikalaki kosala boyokani ya kimia na bana ya Isalaele, oyo babotolaki yango nyonso na bitumba. \v 20 Nzokande, Yawe Ye moko azalaki koyeisa bango mitema mabanga mpo ete babundisa Isalaele, mpe mpo ete Isalaele asilisa koboma bango nyonso na mawa te, ndenge Yawe atindaki Moyize. \p \v 21 Na tango wana, Jozue akendeki koboma bato ya Anaki wuta na mokili ya bangomba : wuta na Ebron, na Debiri, na Anabi, na mokili nyonso ya bangomba ya Yuda mpe na mokili nyonso ya bangomba ya Isalaele. Jozue asilisaki koboma bango nyonso elongo na bingumba na bango. \v 22 Ata moto moko te ya Anaki atikalaki kati na mokili ya bana ya Isalaele. Batikalaki kaka na Gaza, kati na Gati, mpe na Asidodi. \v 23 Jozue abotolaki mokili yango nyonso ndenge Yawe atindaki na Moyize, apesaki yango na Isalaele lokola libula mpe akabolaki yango kolanda mabota ya Isalaele. \p Bongo mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te. \c 12 \s1 Molongo ya bakonzi oyo Isalaele alongaki \li4 \v 1 Tala bakonzi ya mokili, oyo bana ya Isalaele balongaki mpe oyo babotolaki mokili na bango na ngambo ya este ya Yordani, wuta na moluka ya Arinoni kino na ngomba Erimoni, elongo na ngambo nyonso ya este ya Araba : \b \li1 \v 2 Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, azalaki kovanda na Eshiboni. \li2 Azalaki kokonza wuta na Aroeri oyo ezalaki pene ya moluka ya Arinoni, wuta na moluka, elongo na ndambo ya mokili ya Galadi, kino na moluka ya Yaboki, oyo ezalaki na mondelo na bato ya Amoni. \v 3 Azalaki mpe lisusu kokonza ngambo ya este ya Araba, wuta na Ebale monene ya Kinereti kino na Ebale monene ya Araba (ebale monene ya Barozo), na ngambo ya este, na nzela ya Beti-Yeshimoti mpe na ebandeli ya ngomba Pisiga, na ngambo ya sude. \li1 \v 4 Ogi, mokonzi ya Bashani, moko kati na bakitani ya suka ya Refayimi, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi. \li2 \v 5 Azalaki kokonza na ngomba Erimoni, na Salika mpe na Bashani mobimba kino na bandelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati, mpe kino na ndambo ya mokili ya Galadi oyo ezalaki na mondelo ya mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni. \b \li4 \v 6 Moyize, mosali na Yawe, elongo na bana ya Isalaele balongaki bango. Boye, Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki mokili na bango lokola libula, epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. \b \p \v 7 Tala molongo ya bakonzi ya mokili oyo Jozue mpe bana ya Isalaele babotolaki na ngambo ya weste ya Yordani, wuta na Bala-Gadi, na lubwaku ya Libani kino na ngomba Alaki oyo ezalaki na ngambo ya Seiri. Jozue apesaki bamboka na bango lokola libula, epai ya bana ya Isalaele kolanda mabota na bango \v 8 kati na mokili ya bangomba, na mokili ya se, na Araba, kokita na esobe mpe na Negevi, mikili ya bato ya Iti, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. \b \li4 Tala bakonzi yango : \b \tr \tc1 \v 9 mokonzi ya Jeriko \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Ayi, pembeni ya Beteli \tcr2 moko \tr \tc1 \v 10 mokonzi ya Yelusalemi \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Ebron \tcr2 moko \tr \tc1 \v 11 mokonzi ya Yarimuti \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Lakishi \tcr2 moko \tr \tc1 \v 12 mokonzi ya Egiloni \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Gezeri \tcr2 moko \tr \tc1 \v 13 mokonzi ya Debiri \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Gederi \tcr2 moko \tr \tc1 \v 14 mokonzi ya Orima \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Aradi \tcr2 moko \tr \tc1 \v 15 mokonzi ya Libina \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Adulami \tcr2 moko \tr \tc1 \v 16 mokonzi ya Makeda \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Beteli \tcr2 moko \tr \tc1 \v 17 mokonzi ya Tapua \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Eferi \tcr2 moko \tr \tc1 \v 18 mokonzi ya Afeki \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Lasharoni \tcr2 moko \tr \tc1 \v 19 mokonzi ya Madoni \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Atsori \tcr2 moko \tr \tc1 \v 20 mokonzi ya Shimironi-Meroni \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Akishafi \tcr2 moko \tr \tc1 \v 21 mokonzi ya Taanaki \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Megido \tcr2 moko \tr \tc1 \v 22 mokonzi ya Kedeshi \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Yokineami kati na Karimeli \tcr2 moko \tr \tc1 \v 23 mokonzi ya Dori, kati na lubwaku ya Dori \tcr2 moko \tr \tc1 mokonzi ya Goyimi, kati na Giligali \tcr2 moko \tr \tc1 \v 24 mokonzi ya Tiritsa \tcr2 moko. \b \tr \tc1 \tcr2 Bango nyonso bazalaki bakonzi tuku misato na moko. \c 13 \ms1 Kokabola Kanana \s1 Bituka oyo babotolaki nanu te \p \v 1 Tango Jozue akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi, Yawe alobaki na ye : « Okomi mpe mobange makasi, mibu ya bomoi na yo esili kopusana mingi. Kasi mokili oyo bosengeli kobotola ezali nanu monene. \b \li4 \v 2 Tala mokili oyo etikali : \b \li1 Bituka nyonso ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Geshuri : \v 3 etuka oyo batangaka na molongo ya mikili ya Kanana ; wuta na ebale ya Shiyori, oyo etalana na Ejipito kino na ngambo ya nor, na etuka ya Ekroni. Kuna, ezalaki na bakambi mitano ya bato ya Filisitia : mokambi ya Gaza, ya Asidodi, ya Ashikeloni, ya Gati mpe ya Ekroni ; \li1 etuka ya bato ya Avi ; \li1 \v 4 mpe wuta na ngambo ya sude, mokili mobimba ya bato ya Kanana mpe Meara oyo ezalaki mokili ya bato ya Sidoni kino na Afeki, kino na bandelo ya bato ya Amori ; \li1 \v 5 etuka ya bato ya Gebali ; \li1 mpe ngambo nyonso ya este ya Libani, wuta na Bala-Gadi, na ebandeli ya ngomba Erimoni kino na Lebo-Amati. \b \p \v 6 Mpo na bavandi nyonso ya etuka ya bangomba, wuta na Libani kino na Misirefoti-Mayimi, bato nyonso ya Sidoni, nakobengana bango Ngai moko liboso ya Isalaele. Sala keba ete opesa mokili yango lokola libula epai ya Isalaele, ndenge kaka natindaki yo ; \v 7 mpe kabola yango lokola libula kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota ya Manase. » \s1 Kokabola mabele ya ngambo ya este ya Yordani \li4 \v 8 Bato ya ndambo mosusu ya libota ya Manase, elongo na bato ya libota ya Ribeni mpe ya Gadi bazwaki libula oyo Moyize, mowumbu na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. \li1 \v 9 Ezalaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba mobimba Medeba kino na Diboni, \v 10 mpe bingumba nyonso ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kokonza na Eshiboni kino na bandelo ya bato ya Amoni. \li1 \v 11 Galadi mpe ezalaki na kati, elongo na etuka ya bato ya Geshuri mpe ya Maakati, ngomba Erimoni nyonso mpe Bashani mobimba kino na Salika. \v 12 Bashani mobimba, mokili ya Ogi, lokola moko kati na bato ya suka ya Refayimi oyo azalaki kokonza na Ashitaroti mpe na Edreyi, ezalaki mpe kati na libula na bango. Moyize alongaki bango mpe abotolaki bango mokili na bango. \v 13 Kasi bana ya Isalaele babenganaki te bato ya Geshuri mpe ya Maakati ; yango wana bakobaki kovanda elongo na bana ya Isalaele kino na mokolo ya lelo. \b \li1 \v 14 Nzokande, Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te libula na bango ezali makabo bazikisa na moto mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge Yawe alakaki bango. \s1 Eteni ya mabele ya libota ya Ribeni \li4 \v 15 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango : \li1 \v 16 Mabele oyo ezwamaki wuta na Aroeri, pene ya moluka ya Arinoni, wuta na engumba oyo ezali na kati-kati ya lubwaku, bakisa ngomba Medeba mobimba, \v 17 kino na Eshiboni mpe bingumba na yango nyonso oyo ezalaka na likolo ya ngomba, bakisa Diboni, Bamoti-Bala, Beti-Bala-Meoni, \v 18 Yakatsi, Kedemoti, Mefati, \v 19 Kiriatayimi, Sibima, Tsereti-Shaari na ngomba moke ya lubwaku, \v 20 Beti-Peori, mipanzi ya ngomba Pisiga mpe Beti-Yeshimoti : \v 21 bingumba nyonso ya ngomba mpe mokili mobimba ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori oyo azalaki kokonza na Eshiboni. Moyize alongaki ye elongo na bakambi ya Madiani : Evi, Rekemi, Tsuri, Wuri mpe Reba, oyo bazalaki kosalela Sikoni mpe kovanda na mokili na ye. \v 22 Kati na bato oyo babomaki na bitumba, bana ya Isalaele babomaki mpe na mopanga Balami, mwana mobali ya Beori, moto oyo asololaka na milimo ya bakufi. \li4 \v 23 Mondelo ya bato ya libota ya Ribeni ezalaki nde Yordani. Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Ribeni, kolanda bituka na bango. \b \li4 \v 24 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na libota ya Gadi, kolanda bituka na bango : \li1 \v 25 Etuka ya Yaezeri, bingumba nyonso ya Galadi, mpe ndambo ya mokili ya bato ya Amoni kino na Aroeri oyo etalana na Raba ; \v 26 mpe wuta na Eshiboni kino na Ramati-Mitsipe mpe Betonimi, wuta na Maanayimi kino na mondelo ya Debiri ; \v 27 mpe na lubwaku, na Beti-Arami, na Beti-Nimira, na Sukoti, na Tsafoni, mpe na mokili ya Sikoni, mokonzi na Eshiboni, oyo etikalaki elongo na Yordani mpe bazingazinga na yango kino na suka ya Ebale monene ya Kinereti, na ngambo ya este ya Yordani. \li4 \v 28 Bingumba oyo mpe bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula oyo bapesaki na bato ya libota ya Gadi, kolanda bituka na bango. \b \li4 \v 29 Tala eteni ya mabele oyo Moyize apesaki na ndambo ya libota ya Manase, kolanda bituka na bango : \li1 \v 30 Mabele oyo ezwamaki wuta na Maanayimi, bakisa mokili mobimba ya Bashani, mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe bamboka mike-mike nyonso ya Yairi oyo ezalaka na Bashani, bingumba tuku motoba, \v 31 ndambo ya mokili ya Galadi ; Ashitaroti mpe Edreyi, bingumba ya bokonzi ya Ogi kati na Bashani ; ezalaki mpo na bakitani ya Makiri, mwana mobali, ya Manase mpo na ndambo ya bakitani ya Makiri, kolanda bituka na bango. \b \li4 \v 32 Yango nde libula oyo Moyize apesaki tango azalaki na etando ya Moabi, na ngambo ya Yordani, na ngambo ya este ya Jeriko. \v 33 Kasi Moyize apesaki libula te epai ya libota ya Levi, pamba te Ye moko Yawe, Nzambe ya Isalaele, nde azali libula na bango, ndenge alakaki bango. \c 14 \s1 Kokabola mabele ya ngambo ya weste ya Yordani \p \v 1 Nzokande, tala mabele oyo bana ya Isalaele bazwaki lokola libula kati na mokili ya Kanana ; mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka ya mabota ya bana ya Isalaele bakabolelaki bango. \v 2 Bakabolelaki bango yango na nzela ya zeke, ndenge Yawe atindaki na nzela ya Moyize kati na mabota libwa mpe ndambo ya libota. \v 3 Moyize apesaki epai ya mabota mibale mpe ndambo ya libota mabele na bango, na ngambo ya este ya Yordani ; kasi epai ya bato ya libota ya Levi, apesaki mabele te kati na mabota mosusu ; \v 4 pamba te bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bakomaki mabota mibale. Bato ya libota ya Levi bazwaki libula te kati na mokili longola kaka bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele mpe biloko na bango. \v 5 Boye, bana ya Isalaele bakabolaki mokili, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \s1 Kalebi azwi engumba Ebron \p \v 6 Bato ya libota ya Yuda bayaki epai ya Jozue, na Giligali. Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi, ayebisaki Jozue : « Oyebi malamu makambo oyo Yawe alobaki na Moyize, moto na Nzambe, na Kadeshi-Barinea na tina na yo mpe na tina na ngai. \v 7 Nazalaki nanu na mibu tuku minei tango Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki ngai wuta na Kadeshi-Barinea mpo na kononga mokili. Mpe napesaki ye sango kolanda ndenge motema na ngai ezalaki kondima. \v 8 Bandeko na ngai, oyo tomataki na bango elongo balembisaki bato nzoto ; nzokande ngai nalandaki bobele Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba. \v 9 Na mokolo wana, Moyize alapaki ndayi : ‹ Solo, nalapi ndayi ete mokili oyo matambe na yo esilaki konyata ekozala libula na yo mpe ya bakitani na yo mpo na libela, pamba te olandaki Yawe, Nzambe na ngai, na motema mobimba. › \p \v 10 Sik’oyo tala, eleki mibu tuku minei na mitano oyo Yawe abateli ngai na bomoi, wuta tango alobaki liloba oyo epai ya Moyize tango bana ya Isalaele bazalaki kotambola na esobe. Boye, ndenge nazali awa lelo, nakokisi mibu tuku mwambe na mitano ya mbotama, \v 11 mpe nazali na makasi lokola na tango oyo Moyize atindaki ngai ; nazali na nguya ya kobunda bitumba ndenge kaka nazalaki na yango na kala. \v 12 Pesa ngai mokili ya bangomba wana oyo Yawe alakaki ngai na mokolo wana. Mokolo wana, yo moko oyokaki ete bato ya Anaki bazalaki kovanda kuna mpe bingumba na bango ezalaki minene mpe batonga makasi. Kasi na lisungi na Yawe, nakobengana bango ndenge Yawe alobaki. » \p \v 13 Jozue apambolaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, mpe apesaki ye engumba Ebron lokola libula. \v 14 Boye, wuta na tango yango, engumba Ebron ekomaki libula ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune, moto ya Kenizi ; mpo ete alandaki Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema mobimba. \p \v 15 Liboso, bazalaki kobenga Ebron « Kiriati-Ariba. » Ariba azalaki elombe oyo alekaki bato nyonso ya Anaki na makasi. Bongo, mokili ekomaki na kimia mpe bitumba ezalaki lisusu te. \c 15 \s1 Eteni ya mabele ya libota ya Yuda \li4 \v 1 Eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, kolanda bituka na bango, ezalaki na ngambo ya sude, wuta na bandelo ya Edomi kino na esobe ya Tsini, na suka penza ya sude. \b \li1 \v 2 Mondelo na yango ya sude ebandaki na suka ya ebale monene ya Barozo, longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale monene oyo etalana na Negevi, \v 3 emataki kino na ngambo ya sude ya Akarabimi mpe elekaki na Tsini, sima emataki na ngambo ya sude ya Kadeshi-Barinea mpe ekitaki na Etsironi ; emataki na ngambo ya Adari mpe ebalukaki na ngambo ya Karika. \v 4 Elekaki na Atsimoni, ekendeki kotutana na moluka ya Ejipito mpe esukaki na Ebale monene. Yango nde ezali mondelo na bango na ngambo ya sude. \li1 \v 5 Na ngambo ya este, mondelo ezalaki ebale monene ya Barozo kino na suka ya Yordani. \li1 Na ngambo ya nor, ezalaki longwa na eteni ya mabele oyo ekota kati na ebale kino na suka ya Yordani. \v 6 Mondelo emataki na Beti-Ogila, elekaki na ngambo ya nor ya Beti-Araba mpe emataki kino na Libanga ya Boani, mwana mobali ya Ribeni. \v 7 Mondelo yango emataki kino na Debiri, longwa na Lubwaku ya Akori, mpe ebalukaki na ngambo ya nor kino na Giligali oyo etalana na nzela oyo emata na Adumimi, na ngambo ya sude ya moluka. Elekaki pene ya mayi ya Eyini-Shemeshi mpe ekendeki kosuka na Eyini-Rogeli. \v 8 Bongo mondelo yango emataki na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, pene ya mopanzi ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi (oyo ezali Yelusalemi). Longwa na esika yango, emataki kino na songe ya ngomba oyo ezali na weste ya Lubwaku ya Inomi, na suka ya ngambo ya nor ya Lubwaku ya Refayimi. \v 9 Longwa na songe ya ngomba, mondelo yango ekatisaki kino na etima ya mayi ya Nefitoa, ebimaki na bingumba ya ngomba Efroni mpe ekitaki na ngambo ya Baala (oyo ezali Kiriati-Yearimi). \v 10 Longwa na Baala, mondelo yango ekatisaki na ngambo ya weste, pene ya ngomba Seiri ; elekaki na mopanzi ya ngomba ya bazamba, na ngambo ya nor (oyo ezali ngomba Kesaloni) ; ekobaki kokita kino na Beti-Shemeshi mpe ekatisaki kino na Timina. \v 11 Mondelo yango ekendeki na mopanzi ya ngambo ya nor ya Ekroni, ebalukaki na Shikeroni, elekaki pene ya ngomba Baala ; ekendeki kino na Yabineyeli mpe esukaki na ebale monene. \li1 \v 12 Mondelo ya ngambo ya weste elekaki pembeni-pembeni ya ebale monene Mediterane. \b \li4 Yango nde ezalaki, na bangambo nyonso, eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda kolanda bituka na bango. \s1 Eteni ya mabele ya Kalebi \p \v 13 Kolanda mitindo oyo Yawe apesaki ye, Jozue apesaki Kalebi, mwana mobali ya Yefune, eteni ya mabele : Kiriati-Ariba (oyo ezali Ebron), kati na libota ya bato ya Yuda. (Ariba azalaki tata ya Anaki). \p \v 14 Kalebi abenganaki, wuta na Ebron, bakitani misato ya Anaki : Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi. \v 15 Longwa wana, akendeki kobundisa bavandi ya Debiri oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Seferi. » \v 16 Kalebi alobaki : « Nakopesa na libala Akisa, mwana na ngai ya mwasi, epai ya moto nyonso oyo akobundisa mpe akobotola Kiriati-Seferi. » \v 17 Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko mobali ya Kalebi, abotolaki yango ; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli. \p \v 18 Nzokande, tango Akisa akomaki na ndako ya Otinieli, atindikaki ye ete asenga elanga epai ya Kalebi, tata na ye. Boye, tango Akisa akitaki wuta na ane na ye, Kalebi atunaki ye : \pi1 — Olingi nini ? \p \v 19 Akisa azongisaki : \pi1 — Salela ngai ngolu. Lokola opesaki ngai eteni ya mabele kati na Negevi, pesa ngai lisusu bitima. \p Boye, Kalebi apesaki ye bitima ya likolo mpe ya se. \s1 Bingumba ya bato ya libota ya Yuda \li4 \v 20 Yango nde ezalaki eteni ya mabele oyo bato ya libota ya Yuda bazwaki lokola libula, kolanda mabota na bango. \b \li4 \v 21 Tala bingumba oyo ezalaki na suka ya eteni ya mabele ya bato ya libota ya Yuda, na ngambo ya mondelo ya Edomi, na Negevi : \li2 Kabiseyeli, Ederi, Yaguri, \v 22 Kina, Dimona, Adada, \v 23 Kedeshi, Atsori, Itinani, \v 24 Zifi, Telemi, Bealoti, \v 25 Atsori-Adata, Kerioti-Etsironi oyo bazalaki mpe kobenga Atsori, \v 26 Amami, Shema, Molada, \v 27 Atsari-Gada, Eshimoni, Beti-Paleti, \v 28 Atsari-Shuwali, Beri-Sheba, Biziotia, \v 29 Baala, Iyimi, Atsemi, \v 30 Elitoladi, Kesili, Orima, \v 31 Tsikilagi, Madimana, Sanisana, \v 32 Lebaoti, Shilimi, Ayini mpe Rimoni : bingumba nyonso ezalaki tuku mibale na libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li1 \v 33 Tala bingumba oyo ezalaki na etando, pene ya ebale monene : \li2 Eshitaoli, Tsorea, Ashina, \v 34 Zanoa, Eyini-Ganimi, Tapua, Enami, \v 35 Yarimuti, Adulami, Soko, Azeka, \v 36 Shaarayimi, Aditayimi, Gedera to Gederotayimi : bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li2 \v 37 Tsenani, Adasha, Migidali-Gadi, \v 38 Dileani, Mitsipe, Yokiteyeli, \v 39 Lakishi, Botsikati, Egiloni, \v 40 Kaboni, Lakimasi, Kitilishi, \v 41 Gederoti, Beti-Dagoni, Naama mpe Makeda : bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li2 \v 42 Libina, Eteri, Ashani ; \v 43 Yifita, Ashina, Netsibi, \v 44 Keila, Akizibi mpe Maresha : bingumba nyonso ezalaki libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li2 \v 45 Engumba ya Ekroni elongo na bamboka na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike oyo ezingelaki yango, \v 46 longwa na Ekroni mpe na ngambo ya weste, mabele nyonso oyo ezalaki pene ya Asidodi mpe bamboka na yango ; \v 47 Asidodi, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike ; Gaza, bingumba na yango mpe bamboka na yango ya mike-mike kino na moluka ya Ejipito, ebale monene Mediterane mpe bazingazinga na yango. \li1 \v 48 Na mokili ya bangomba : \li2 Shamiri, Yatiri, Soko, \v 49 Dana, Kiriati-Sana oyo bazalaki mpe kobenga Debiri, \v 50 Anabi, Eshitemoa, Animi, \v 51 Gosheni, Oloni mpe Gilo : bingumba nyonso ezalaki zomi na moko elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li2 \v 52 Arabi, Duma, Esheani, \v 53 Yanumi, Beti-Tapua, Afeki, \v 54 Umeta, Kiriati-Ariba oyo bazalaki mpe kobenga Ebron, mpe Tsiori : bingumba nyonso ezalaki libwa elongo na mboka na yango ya mike-mike. \li2 \v 55 Maoni, Karimeli, Zifi, Yuta, \v 56 Jizireyeli, Yokideami, Zanoa, \v 57 Kayini, Gibea mpe Timina : bingumba nyonso ezalaki zomi elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li2 \v 58 Aliwuli, Beti-Tsuri, Gedori, \v 59 Maarati, Beti-Anoti mpe Elitekoni : bingumba nyonso ezalaki motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li2 \v 60 Kiriati-Bala oyo bazalaki mpe kobenga Kiriati-Yearimi, mpe Raba : bingumba nyonso ezalaki mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li1 \v 61 Tala bingumba oyo ezalaki na esobe : \li2 Beti-Araba, Midini, Sekaka, \v 62 Nibishani, Iri-Amelayi mpe Eyini-Gedi : bingumba nyonso ezalaki motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \b \p \v 63 Bato ya libota ya Yuda bakokaki te kobengana bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bazali kovanda na Yelusalemi elongo na bato ya libota ya Yuda. \c 16 \s1 Eteni ya mabele ya libota ya Jozefi \li1 \v 1 Eteni ya mabele ya bakitani ya Jozefi ebandaki wuta na Yordani, pene ya Jeriko, na ngambo ya este ya mayi ya Jeriko, na esobe oyo emata na Jeriko na mokili ya bangomba ya Beteli. \v 2 Ekendeki longwa na Beteli kino na Luze, elekaki na ngambo ya bandelo ya bato ya Ariki mpe Ataroti, \v 3 ekitaki kino na ngambo ya weste na mondelo ya bato ya Yafeleti kino na etuka ya Beti-Oroni ya se, kino na Gezeri ya suka mpe esukaki na Ebale monene. \b \li4 \v 4 Boye bana mibali ya Jozefi, Manase mpe Efrayimi, bazwaki eteni ya mabele lokola libula. \b \b \li4 \v 5 Tala eteni ya mabele ya bakitani ya Efrayimi kolanda bituka na bango : \b \li1 Mondelo ya eteni ya mabele na bango ezalaki na ngambo ya este, longwa na Ataroti-Adari kino na Beti-Oroni ya likolo ; \v 6 ekobaki kino na Ebale monene. Na ngambo ya weste, mondelo ezalaki longwa na Mikimeta na ngambo ya nor, ebalukaki na ngambo ya este na Tanati-Silo, elekelaki wana kino na Yanoa, na ngambo ya este. \v 7 Mpe lisusu ekitaki longwa na Yanoa kino na Ataroti mpe na Naarata, etutanaki na Jeriko mpe ekendeki kobima kino na Yordani. \v 8 Longwa na Tapua, ekendeki na ngambo ya weste kino na moluka ya Kana mpe ekendeki kosuka na Ebale monene. Yango nde ezalaki eteni ya libula ya bakitani ya libota ya Efrayimi, kolanda bituka na bango. \li1 \v 9 Ebakisamaki mpe bingumba nyonso elongo na bamboka na yango ya mike-mike oyo epesamelaki bato ya libota ya Efrayimi kati na libula ya bato ya libota ya Manase. \b \p \v 10 Kasi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri. Yango wana, bato ya Kanana bazali kovanda kati na bato ya Efrayimi kino na mokolo ya lelo. Kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi oyo ekoki na bawumbu. \c 17 \s1 Eteni ya mabele ya ndambo ya libota ya Manase \p \v 1 Libota ya Manase, mwana liboso ya Jozefi, bazwaki eteni ya mabele ; pamba te Makiri, mwana liboso ya Manase, tata ya Galadi, azalaki moto ya bitumba mpe azwaki Galadi mpe Bashani. \v 2 Bakitani mosusu ya Manase, kolanda mabota na bango, bazwaki eteni ya mabele : bakitani ya Abiezeri, ya Eleki, ya Asirieli, ya Sishemi, ya Eferi mpe ya Shemida. Bango nde bazalaki bana mibali ya Manase, mwana mobali ya Jozefi, kolanda bituka na bango. \p \v 3 Tselofikadi, mwana mobali ya Eferi, mwana mobali ya Galadi, mwana mobali ya Makiri, mwana mobali ya Manase, atikalaki kobota bana mibali te ; azalaki kaka na bana basi oyo bakombo na bango ezalaki : Mala, Noa, Ogila, Milika mpe Tiritsa. \v 4 Bayaki liboso ya Nganga-Nzambe Eleazari, liboso ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe liboso ya bakambi. Balobaki : « Yawe apesaki mitindo epai ya Moyize ete apesa biso eteni ya mabele kati ya bandeko na biso ya mibali. » \p Boye, Jozue apesaki bango libula elongo na bandeko mibali ya tata na bango, kolanda mitindo na Yawe. \v 5 Boye, ndambo ya libota ya Manase ezwaki biteni zomi, bakisa mokili ya Galadi mpe ya Bashani oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani. \v 6 Na bongo, bakitani ya Manase ya basi bazwaki libula ya mabele kati na bakitani na ye ya mibali, kasi mokili ya Galadi ezalaki ya bana mibali mosusu ya Manase. \li1 \v 7 Eteni ya mabele ya Manase ezalaki longwa na Aseri, na mokili ya Mikimeta oyo ezalaki ya kotalana na Sishemi, kino na ngambo ya Yamini, na ngambo ya bavandi ya Eyini-Tapua. \v 8 Manase azwaki eteni ya mabele ya Tapua, kasi yango moko Tapua oyo ezalaki na bandelo ya Manase ezalaki ya bakitani ya Efrayimi. \v 9 Bongo mondelo ekitaki kino na ngambo ya sude ya moluka ya Kana. Bingumba oyo ezalaki na zingazinga ya bingumba ya Manase ezalaki ya Efrayimi. Kasi mondelo ya Manase elekaki na ngambo ya nor ya moluka mpe ekendeki kosuka na Ebale monene. \v 10 Efrayimi azwaki eteni ya mabele oyo ezalaki na ngambo ya sude ; mpe Manase azwaki oyo ezalaki na ngambo ya nor. Eteni ya mabele ya Manase ekomaki kino na Ebale monene, na mondelo ya Aseri, na ngambo ya nor mpe ya Isakari, na ngambo ya este. \li1 \v 11 Kati na Isakari mpe Aseri, Manase azwaki Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Yibileayimi elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Eyini-Dori elongo na bamboka na yango ya mike-mike, Taanaki elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe Megido elongo na bamboka na yango ya mike-mike (engumba ya misato, kati na molongo, ezali Nafoti). \b \p \v 12 Nzokande, bakitani ya Manase bazalaki na makoki te ya kozwa bingumba oyo, pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na etuka yango. \v 13 Atako bongo, tango bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi oyo ekoki na bawumbu, kasi bakokaki te kobengana bango. \s1 Bakitani ya Jozefi basengi eteni ya mabele mosusu \p \v 14 Bakitani ya Jozefi balobaki na Jozue : \pi1 — Mpo na nini opesi biso lokola libula, kaka eteni moko ya mabele ? Tozali penza bato ebele na motango mpe Yawe apamboli biso makasi. \p \v 15 Jozue azongiselaki bango : \pi1 — Soki bozali bato ebele mpe etuka ya bangomba ya Efrayimi ezali moke mpo na bino, bokende komikatela eteni ya mabele na bazamba ya bato ya Perizi mpe ya Refayimi. \p \v 16 Bakitani ya Jozefi balobaki na ye : \pi1 — Mokili ya bangomba ezali moke mpo na biso, mpe bato nyonso ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Beti-Sheani elongo na bamboka na yango ya mike-mike, mpe bavandi ya lubwaku ya Jizireyeli, bazalaka na bashar ya bibende mpo na kobunda. \p \v 17 Jozue alobaki na bato ya Efrayimi mpe ya Manase, bakitani ya Jozefi : \pi1 — Bozali ebele mpe bozali makasi. Bokozala kaka na eteni ya mabele moko te. \v 18 Kasi bozwa etuka mobimba ya bangomba, atako ezali bazamba ; bokata bazamba yango mpe bovanda kuna kino na basuka na yango, bobengana bato ya Kanana, atako bazali na bashar ya bibende mpe bazali makasi. \c 18 \s1 Kokabola mokili oyo etikalaki epai ya mabota sambo \p \v 1 Sima na bana ya Isalaele kozwa bokonzi likolo ya mokili, lisanga na bango mobimba esanganaki na Silo mpe batelemisaki kuna Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 2 Kasi kati na bana ya Isalaele, ezalaki na mabota sambo oyo ezwaki nanu te libula na yango ya mabele. \v 3 Jozue alobaki na bana ya Isalaele : « Kino tango nini bokozela mpo na kokende kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe ya batata na bino, apesaki bino ? \v 4 Bopona bato misato kati na libota moko na moko. Nakotinda bango mpo ete bakende kotambola kati na mokili mpe kotia bandelo na yango kolanda libula ya libota na libota ; bongo na sima nde bakoki kozonga epai na ngai. \v 5 Bakokabola mokili yango na biteni sambo ; bakitani ya Yuda bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya sude, mpe bakitani ya Jozefi bakotikala na eteni na bango ya mabele ya ngambo ya nor. \v 6 Sima na bino kosala mabongisi ya kokabola mokili na biteni sambo, bomemela ngai yango awa, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe, Nzambe na bino. \v 7 Kasi bakitani ya Levi bakotikala kozwa eteni moko te ya mabele elongo na bino, pamba te mosala ya bonganga-Nzambe nde ekozala libula na bango. Bato ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya ndambo ya libota ya Manase, bazwaki eteni ya mabele oyo Moyize, mosali na Yawe, apesaki bango na ngambo ya este ya Yordani. » \p \v 8 Tango bato batelemaki mpo na kokende kosala mabongisi ya kokabola mokili, Jozue apesaki mitindo oyo : « Bokende kotambola kati na mokili, bokata bandelo na yango, mpe na sima, bozongela ngai awa na Silo, mpe ngai nakobeta zeke mpo na bino liboso ya Yawe. » \v 9 Boye, bato oyo bakendeki, batambolaki kati na mokili, bakataki bandelo na yango mpe batiaki yango na mokanda, engumba na engumba, mpe bakabolaki mokili mobimba na biteni sambo ; bongo na sima, bazongaki na Silo, na molako epai ya Jozue. \v 10 Jozue abetaki zeke mpo na bango liboso ya Yawe, na Silo, mpe kuna akabolaki mokili kati na bana ya Isalaele kolanda mabota na bango. \s1 Eteni ya mabele ya libota ya Benjame \li4 \v 11 Zeke ekweyaki epai ya libota ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango. Eteni ya mabele oyo epesamelaki bango na zeke ezalaki na kati-kati ya mabele ya bakitani ya Yuda mpe ya Jozefi. \li1 \v 12 Na ngambo ya nor, mondelo na bango ezalaki longwa na Yordani, emataki na mopanzi ya Jeriko, ekatisaki mokili ya bangomba, na ngambo ya weste, mpe esukaki na esobe, na Beti-Aveni. \v 13 Mondelo yango elekelaki wana mpe ekendeki kino na Luze, na mopanzi na yango ya ngambo ya sude, oyo ezali Beteli ; ekendeki kotutana na Ataroti-Adari, na ngomba oyo ezalaki na ngambo ya sude ya Beti-Oroni, mokili ya se. \li1 \v 14 Longwa na ngomba moke oyo etalana na Beti-Oroni na ngambo ya sude, mondelo yango ebalukaki na ngambo ya weste, mpe esukaki na Kiriati-Bala, oyo ekoma Kiriati-Yearimi, engumba ya bakitani ya Yuda. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya weste. \li1 \v 15 Na ngambo ya sude, mondelo yango ebandaki longwa na Kiriati-Yearimi, na ngambo ya weste, mpe ekendeki kobima na etima ya mayi ya Nefitoa. \v 16 Ekitaki kino na ebandeli ya ngomba moke oyo etalana na Lubwaku ya Beni-Inomi, na ngambo ya nor ya etando ya bato ya Refayimi. Ekitaki na Lubwaku ya Inomi, na mopanzi ya ngambo ya sude ya engumba ya bato ya Yebusi kino na Eyini-Rogeli. \v 17 Ebalukaki na ngambo ya nor, elekelaki na Eyini-Shemeshi, elekaki na Geliloti oyo etalana na nzela emata kino na Adumimi ; sima ekitaki kino na Libanga ya Boani, mwana mobali ya Ribeni. \v 18 Elekaki na mopanzi ya ngambo ya nor, liboso ya Beti-Araba, mpe ekitaki kino na etando ya Araba. \v 19 Mondelo yango elekelaki na mopanzi ya Beti-Ogila, na ngambo ya nor, mpe esukaki na eteni ya mabele oyo ekota na mayi ya ebale monene ya Barozo, na ngambo ya nor, na suka ya ngambo ya sude ya Yordani. Yango nde ezalaki mondelo na yango na ngambo ya sude. \li1 \v 20 Ebale ya Yordani ekomaki mondelo na yango na ngambo ya este. \li4 Yango nde ezalaki bandelo ya libula ya mabota ya bakitani ya Benjame na bangambo nyonso. \b \li4 \v 21 Tala bingumba ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango : \li1 Jeriko, Beti-Ogila, Emeki-Ketsitsi, \v 22 Beti-Araba, Tsemarayimi, Beteli, \v 23 Avimi, Para, Ofira, \v 24 Kefari-Amonayi, Ofini mpe Geba : bingumba nyonso ezalaki zomi na mibale, elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li1 \v 25 Gabaoni, Rama, Beyeroti, \v 26 Mitsipe, Kefira, Motsa, \v 27 Rekemi, Yiripeyeli, Tareala, \v 28 Tsela, Elefi, engumba ya Yebusi oyo ezali Yelusalemi, Gibea, Kiriati : bingumba nyonso ezalaki zomi na minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li4 Yango nde ezalaki libula ya mabele ya bakitani ya Benjame kolanda bituka na bango. \c 19 \s1 Eteni ya mabele ya libota ya Simeoni \li4 \v 1 Na mbala ya mibale, zeke ekweyaki epai ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango. Libula na bango ezalaki na kati-kati ya eteni ya mabele ya libota ya Yuda. \v 2 Bazwaki lokola libula : \li1 Beri-Sheba, Sheba, Molada, \v 3 Atsari-Shuwali, Bala, Atsemi, \v 4 Elitoladi, Betuli, Orima, \v 5 Tsikilagi, Beti-Marikaboti, Atsari-Suza, \v 6 Beti-Lebaoti mpe Sharueni : bingumba nyonso ezalaki zomi na misato elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li1 \v 7 Ayini, Rimoni, Eteri mpe Ashani : bingumba nyonso ezalaki minei elongo na bamboka na yango ya mike-mike \v 8 mpe bamboka nyonso ya mike-mike oyo ezalaki zingazinga ya bingumba oyo, kino na Baalati-Beeri, oyo ezali Ramati ya Negevi. \li4 Yango nde ezalaki libula ya mabele ya libota ya Simeoni, kolanda bituka na bango. \v 9 Bazwaki eteni ya mabele ya libota ya Simeoni kati na eteni ya mabele ya libota ya Yuda, pamba te eteni ya mabele ya libota ya Yuda ezalaki monene koleka. Yango wana, bakitani ya Simeoni bazwaki libula na bango kati na eteni ya mabele ya libota ya Yuda. \s1 Eteni ya mabele ya libota ya Zabuloni \li4 \v 10 Na mbala ya misato, zeke ekweyaki epai ya libota ya Zabuloni, kolanda bituka na bango : \li1 Mondelo ya libula na bango ekendeki kino na Saridi. \v 11 Longwa wana, emataki na ngambo ya weste, pene ya Mareala, ekendeki kotutana na Dabesheti, kino na lubwaku oyo ezali pene ya Yokineami. \v 12 Longwa na Saridi, ebalukaki na ngambo ya este, epai moyi ebimelaka, na mondelo ya Kisiloti-Tabori, ekendeki na ngambo ya Dabirati mpe emataki na kino na Yafia. \v 13 Ekobaki koleka na ngambo ya este kino na Gati-Eferi mpe Ita-Katsini, ebimelaki na Rimoni mpe ebalukaki na ngambo ya Neya. \v 14 Mondelo yango ezingelaki Anatoni, na ngambo ya nor, mpe esukaki na Lubwaku ya Yifita-Eli. \li1 \v 15 Ekamataki mpe lisusu, Katati, Naalali, Shimironi, Yideala mpe Beteleemi : bingumba nyonso ezalaki zomi na mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li4 \v 16 Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Zabuloni, kolanda bituka na bango. \s1 Eteni ya mabele ya libota ya Isakari \li4 \v 17 Na mbala ya minei, zeke ekweyaki epai ya libota ya Isakari, kolanda bituka na bango. \v 18 Kati na eteni ya mabele na bango, ezalaki na : \li1 Jizireyeli, Kesuloti, Sunemi, \v 19 Afarayimi, Shiyoni, Anakarati, \v 20 Rabiti, Kishioni, Abetsi, \v 21 Remeti, Eyini-Ganimi, Eyini-Ada mpe Beti-Patseti. \li1 \v 22 Mondelo na yango etutanaki na Tabori, Shakatsima mpe Beti-Shemeshi, bongo esukaki na Yordani. \li1 Bingumba nyonso ezalaki zomi na motoba elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li4 \v 23 Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Isakari, kolanda bituka na bango. \s1 Eteni ya mabele ya libota ya Aseri \li4 \v 24 Na mbala ya mitano, zeke ekweyaki epai ya libota ya Aseri, kolanda bituka na bango. \v 25 Eteni ya mabele na bango ezalaki : \li1 Elikati, Ali, Beteni, Akishafi, \v 26 Alameleki, Ameadi mpe Misheali. Mondelo na yango etutanaki na Karimeli mpe Shiyori-Libinati na ngambo ya weste ; \v 27 ebalukaki na ngambo ya este, na Beti-Dagoni, ekendeki kotutana na Zabuloni mpe Lubwaku ya Yifita-Eli, ekendeki na ngambo ya nor, na Beti-Emeki mpe Neyiyeli mpe elekelaki na Kabuli, na loboko ya mwasi. \v 28 Ekendeki kino na Ebron, Reobi, Amoni mpe Kana kino na Sidoni, engumba monene. \v 29 Mondelo yango ebalukaki na ngambo ya Rama mpe ekendeki kino na engumba ya Tiri, oyo batonga makasi, ebalukaki na ngambo ya Osa mpe na ngambo ya Ebale monene mpe esukaki na Ebale monene Mediterane, na etuka ya Akizibi, \v 30 ya Uma, ya Afeki, ya Reobi. \li1 Bingumba nyonso ezalaki tuku mibale na mibale elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li4 \v 31 Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Aseri, kolanda bituka na bango. \s1 Eteni ya mabele ya libota ya Nefitali \li4 \v 32 Na mbala ya motoba, zeke ekweyaki epai ya libota ya Nefitali, kolanda bituka na bango. \li1 \v 33 Eteni ya mabele na bango ezalaki longwa na Elefi, longwa na terebente oyo ezali na Tsananimi, lekela na Adamu-Nekebi mpe Yabineyeli kino na Lakumi mpe esukaki na Yordani. \v 34 Mondelo na yango ebalukaki na ngambo ya weste na Azinoti-Tabori mpe ekendeki kobimela na Ukoki, etutanaki na Zabuloni, na ngambo ya sude, na Aseri, na ngambo ya weste, mpe Yuda ; Yordani, na ngambo ya este. \li1 \v 35 Bingumba batonga makasi ezalaki : Tsidimi, Tseri, Amati, Rakati, Kinereti, \v 36 Adama, Rama, Atsori ; \v 37 Kedeshi, Edreyi, Eyini-Atsori ; \v 38 Yireoni, Migidali-Eli, Oremi, Beti-Anati mpe Beti-Shemeshi. \li1 Bingumba nyonso ezalaki zomi na libwa elongo na bamboka na yango ya mike-mike. \li4 \v 39 Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Nefitali, kolanda bituka na bango. \s1 Eteni ya mabele ya libota ya Dani \li4 \v 40 Na mbala ya sambo, zeke ekweyaki epai ya libota ya Dani, kolanda bituka na bango. \v 41 Libula na bango ya mabele ezalaki : \li1 Tsorea, Eshitaoli, Iri-Shemeshi ; \v 42 Shaalabini, Ayaloni, Yitila ; \v 43 Eloni, Timinata, Ekroni, \v 44 Eliteke, Gibetoni, Baalati, \v 45 Yeudi, Bene-Beraki, Gati-Rimoni ; \v 46 mayi ya Yarikoni, Rakoni mpe etuka oyo etalana na Jafa. \li4 \v 47 Kasi bakitani ya Dani balongaki te kobotola eteni ya mabele na bango, boye bakendeki kobundisa Leshemi mpe babotolaki yango. Babomaki bato ya Leshemi na mopanga, babotolaki yango mpe bakomaki kovanda kuna. Bakomaki kobenga Leshemi « Dani, » kombo ya koko na bango. \li4 \v 48 Bingumba oyo elongo na bamboka na yango ya mike-mike nde ezalaki libula ya libota ya Dani, kolanda bituka na bango. \s1 Eteni ya mabele ya Jozue \li4 \v 49 Tango bana ya Isalaele basilisaki kokabola mokili na biteni na zeke, bapesaki Jozue, mwana mobali ya Nuni, libula moko kati na bango. \v 50 Kolanda mitindo na Yawe, bapesaki ye engumba oyo asengaki ; ezali Timinati-Sera, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bongo Jozue atongaki engumba yango mpe akomaki kovanda kuna. \b \li4 \v 51 Yango nde ezalaki libula ya mabele oyo Nganga-Nzambe Eleazari ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe bakambi ya bituka, kolanda mabota ya bana ya Isalaele, bakabolaki na zeke liboso ya Yawe, na Silo, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye nde basilisaki kokabola mokili. \c 20 \s1 Bingumba ya kokimela \p \v 1 Yawe alobaki na Jozue : \v 2 « Yebisa bana ya Isalaele ete bapona bingumba ya kokimela, ndenge nayebisaki bino na nzela ya Moyize, \v 3 mpo ete moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoka kokimela kuna mpe azwa ebombamelo liboso ya mobukanisi makila\f + \fr 20.3 \fr*\ft Mobukanisi makila azali moto oyo apesameli mokumba ya kopesa etumbu ya kufa epai ya babomi.\ft*\f*. \p \v 4 Soki akimeli kati na moko ya bingumba wana, akotelema na ekotelo ya ekuke ya engumba mpe akotalisa likambo na ye epai ya bampaka ya engumba wana. Bongo bampaka bakoyamba moto yango kati na engumba mpe bakopesa ye esika ya kovanda elongo na bango. \v 5 Soki mobukanisi makila alandi ye, bampaka basengeli te kokaba mobomi yango na maboko na ye, pamba te abomaki mozalani na ye na nko te mpe azalaki liboso na makanisi ya mabe te. \v 6 Akotikala na engumba wana kino tango akoleka na esambiselo liboso ya lisanga mpe kino tango mokonzi ya Banganga-Nzambe oyo azali na mosala na tango wana, akokufa. Na sima na yango nde mobomi yango akoki kozonga na engumba na ye, na ndako na ye, kati na engumba epai wapi awuta. » \p \v 7 Bana ya Isalaele babulisaki Kedeshi, kati na Galile, kati na mokili ya bangomba ya Nefitali ; Sishemi, kati na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. \p \v 8 Na ngambo mosusu ya Yordani, na este ya Jeriko, baponaki Betseri kati na esobe, na likolo ya ngomba ya libota ya Ribeni ; Ramoti kati na Galadi, kati na etuka ya libota ya Gadi ; mpe Golani kati na Bashani, kati na etuka ya libota ya Manase. \p \v 9 Yango nde ezalaki bingumba oyo eponamaki mpo na moto nyonso ya Isalaele to mpe mpo na mopaya nyonso oyo azali kovanda kati na bango. Moto nyonso oyo akoboma moto na nko te akoki kokimela kuna, mpo ete mobukanisi makila aboma ye te, liboso ete aleka na esambiselo na miso ya lisanga. \c 21 \s1 Bingumba ya Balevi \p \v 1 Bakonzi ya mabota ya bakitani ya Levi bayaki epai ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni, mpe epai ya bakonzi ya bituka ya mabota mosusu ya Isalaele, \v 2 na Silo, kati na mokili ya Kanana, mpo na koloba na bango : « Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize ete bopesa biso bingumba ya kovanda elongo na mabele na yango mpo na bibwele na biso. » \b \li4 \v 3 Boye, kolanda mitindo ya Yawe, bana ya Isalaele balongolaki kati na libula na bango ndambo ya bingumba elongo na mabele na yango, mpe bapesaki yango epai ya bakitani ya Levi. \b \li4 \v 4 Zeke ya liboso ekweyaki epai ya etuka ya Keati. Bato ya Levi oyo bazalaki bakitani ya Nganga-Nzambe Aron bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na libota ya Yuda, ya Simeoni mpe ya Benjame. \li1 \v 5 Bakitani ya Keati oyo batikalaki bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi kati na mabele ya libota ya Efrayimi, ya Dani mpe ya ndambo ya libota ya Manase. \li1 \v 6 Bakitani ya Gerishoni bazwaki, na nzela ya zeke, bingumba zomi na misato kati na mabele ya libota ya Isakari, ya Aseri, ya Nefitali mpe ya ndambo ya libota ya Manase, kati na Bashani. \li1 \v 7 Bakitani ya Merari, kolanda bituka na bango, bazwaki bingumba zomi na mibale kati na mabele ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Zabuloni. \b \li4 \v 8 Boye, ndenge Yawe apesaki mitindo na nzela ya Moyize, bana ya Isalaele babetaki zeke mpo na kopesa bingumba wana elongo na mabele na yango epai ya bakitani ya Levi. \b \li1 \v 9 Kati na mabota ya Yuda mpe ya Simeoni, babetaki zeke mpo na kopesa bingumba oyo, kolanda bakombo na yango, \v 10 epai ya bakitani ya Aron, oyo babimelaki na bituka ya Keati kati na bana mibali ya Levi, pamba te zeke ya liboso ekweyaki epai na bango : \li2 \v 11 Bapesaki bango Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, elongo na mabele na yango, kati na mokili ya bangomba ya Yuda. (Ariba azalaki koko ya Anaki) ; \v 12 kasi bapesaki bilanga ya engumba mpe bamboka na yango ya mike-mike, lokola libula epai ya Kalebi, mwana mobali ya Yefune. \v 13 Epai ya bakitani ya Nganga-Nzambe Aron, bapesaki Ebron lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Libina, \v 14 Yatiri, Eshitemoa, \v 15 Oloni, Debiri, \v 16 Ayini, Yuta mpe Beti-Shemeshi, elongo na mabele na yango. Bazwaki bingumba libwa kati na bituka ya mabota oyo mibale : Yuda mpe Simeoni. \li1 \v 17 Kati na libota ya Benjame, bapesaki bango bingumba oyo : \li2 Gabaoni, Geba, \v 18 Anatoti, Alimoni, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei. \li4 \v 19 Bingumba nyonso ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, ezalaki zomi na misato elongo na mabele na yango. \b \li4 \v 20 Babetaki zeke mpo na kopesa epai ya bakitani mosusu ya Levi, oyo bazali ya bituka ya Keati, moko kati na bana mibali ya Levi, bingumba oyo, kati na mabele ya libota ya Efrayimi. \li1 \v 21 Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, bapesaki bango : \li2 Sishemi lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Gezeri, \v 22 Kibitsayimi mpe Beti-Oroni, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei. \li1 \v 23 Kati na libota ya Dani, bapesaki bango bingumba oyo : \li2 Eliteke, Gibetoni, \v 24 Ayaloni, Gati-Rimoni, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei. \li1 \v 25 Kati na ndambo ya libota ya Manase, bapesaki bango bingumba oyo : \li2 Taanaki, Gati-Rimoni elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba mibale. \li4 \v 26 Bingumba nyonso oyo bapesaki epai ya bituka mosusu ya bakitani ya Keati ezalaki zomi, elongo na mabele na yango. \b \li4 \v 27 Epai ya bakitani ya Gerishoni kati na bituka ya bakitani ya Levi, bapesaki bingumba oyo : \li1 Kati na ndambo ya libota ya Manase : \li2 kati na Bashani, Golani lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, mpe Beyeshitira, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba mibale. \li1 \v 28 Kati na libota ya Isakari : \li2 Kishioni, Dabirati, \v 29 Yarimuti, Eyini-Ganimi, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei. \li1 \v 30 Kati na libota ya Aseri : \li2 Misheali, Abidoni, \v 31 Elikati, Reobi, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei. \li1 \v 32 Kati na libota ya Nefitali : \li2 Kedeshi, kati na mokili ya Galile, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi ; Amoti-Dori mpe Karitani, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba misato. \li4 \v 33 Bingumba nyonso oyo bapesaki epai ya bakitani ya Gerishoni, kolanda bituka na bango, ezalaki zomi na misato elongo na mabele na yango. \b \li4 \v 34 Epai ya bituka ya Merari, bakitani ya Levi oyo batikalaki, bapesaki bingumba oyo : \li1 Kati na libota ya Zabuloni : \li2 Yokineami, Karita, \v 35 Dimina mpe Naalali, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei. \li1 \v 36 Kati na libota ya Ribeni : \li2 Betseri lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Yakatsi, \v 37 Kedemoti mpe Mefati, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei. \li1 \v 38 Kati na libota ya Gadi : \li2 Ramoti, kati na Galadi, lokola engumba ya kokimela mpo na moto oyo atangami mobomi, Maanayimi, \v 39 Eshiboni mpe Yaezeri, elongo na mabele na yango ; ezalaki bongo bingumba minei. \li4 \v 40 Bingumba nyonso oyo babetelaki zeke mpo na kopesa epai ya bakitani ya etuka ya Merari, bakitani ya Levi oyo batikalaki, ezalaki zomi na mibale. \b \li4 \v 41 Bingumba nyonso ya bakitani ya Levi kati na mabele oyo epesamelaki bana ya Isalaele ezalaki tuku minei na mwambe, elongo na mabele na yango. \v 42 Engumba moko na moko ezingelamaki na mabele na yango ; ezalaki penza bongo mpo na bingumba yango nyonso. \s1 Nzambe akokisaka bilaka na Ye \p \v 43 Boye, Yawe apesaki na Isalaele mokili nyonso oyo alakaki kopesa epai ya batata na bango na nzela ya ndayi. Bana ya Isalaele bazwaki yango mpe bakomaki kovanda kuna. \v 44 Yawe apesaki bango kimia na bangambo nyonso, kolanda nyonso oyo alakaki batata na bango na nzela ya ndayi. Monguna moko te kati na banguna na bango alongaki lisusu kotelemela bango. Yawe akabaki banguna na bango nyonso na maboko na bango. \v 45 Kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe apesaki na libota ya Isalaele, moko te etikalaki kokweya ; solo, nyonso ekokisamaki. \c 22 \ms1 Misala ya suka ya Jozue \s1 Bozongi ya mabota ya ngambo ya este ya Yordani \p \v 1 Boye, Jozue abengisaki bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase ; \v 2 mpe alobaki na bango : « Bosili kosala makambo nyonso oyo Moyize, mowumbu na Yawe, atindaki bino, mpe botosaki ngai na makambo nyonso oyo natindaki bino. \v 3 Pamba te wuta tango molayi kino na mokolo ya lelo, botikalaki kosundola bandeko na bino te, kasi bobatelaki malamu mokumba oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino. \v 4 Lokola Yawe, Nzambe na bino, asili kopesa bandeko na bino bopemi, ndenge alakaki, bokoki sik’oyo kozonga na bandako na bino, kati na mokili oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, apesaki bino, na ngambo mosusu ya Yordani. \v 5 Kasi bosala keba ete bobatela mitindo mpe mobeko oyo Moyize, mowumbu ya Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino : kolinga Yawe, Nzambe na bino ; kotambola na banzela na Ye nyonso, kotosa mitindo na Ye, kokangama na Ye, mpe kosalela Ye na motema mpe na molimo na bino mobimba. » \p \v 6 Jozue apambolaki bango mpe azongisaki bango. Boye, bazongaki na bandako na bango. \v 7 Moyize apesaki na ndambo moko ya libota ya Manase, eteni ya mabele kati na Bashani ; mpe Jozue apesaki na ndambo mosusu ya libota ya Manase elongo na bandeko na bango, eteni ya mabele, na ngambo ya weste ya Yordani. Tango Jozue azongisaki bango na bandako na bango, apambolaki mpe bango. \v 8 Alobaki na bango : « Bozonga na bandako na bino na bozwi ebele, na bibwele ebele, na palata, na wolo, na bronze, na bibende, mpe na bilamba ebele. Bokabola elongo na bandeko na bino bomengo ya bitumba oyo bosili kozwa epai ya banguna na bino. » \s1 Etumbelo pene ya Yordani \p \v 9 Boye bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase batikaki bana mosusu ya Isalaele, na Silo, kati na mokili ya Kanana mpo na kozonga na Galadi, mokili na bango moko, oyo basilaki kozwa, kolanda mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize. \p \v 10 Tango bakomaki na Geliloti, pene ya Yordani, kati na mokili ya Kanana, bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongaki etumbelo moko ya monene penza na esika wana, pene ya Yordani. \v 11 Mpe tango bana ya Isalaele bayokaki ete bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase batongi etumbelo na ngambo ya mokili ya Kanana, na Geliloti pene ya Yordani, na ngambo ya bana mosusu ya Isalaele, \v 12 lisanga mobimba ya bana ya Isalaele esanganaki na Silo mpo na kobundisa bango. \p \v 13 Boye bana mosusu ya Isalaele batindaki na mokili ya Galadi, Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase. \v 14 Batindaki elongo na ye bakambi zomi, lokola mokambi moko mpo na libota moko na moko ya bana ya Isalaele : moko na moko azalaki mokambi ya libota na ye kolanda mabota ya bana ya Isalaele. \p \v 15 Tango bakomaki na mokili ya Galadi, epai ya bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya ndambo ya libota ya Manase, balobaki na bango : \pi1 \v 16 — Tala liloba oyo lisanga mobimba ya Yawe elobi : « Ndenge nini bokoki penza kosala lisumu ya boye na miso ya Nzambe ya Isalaele ? Ndenge nini penza bokoki kopesa Yawe mokongo mpe komitongela etumbelo mpo na kotombokela Ye na mokolo ya lelo ? \v 17 Boni, lisumu ya Peori ekoki te mpo na biso ? Kutu, kino na mokolo ya lelo, nanu tosilisi kopetolama na yango te, atako etumbu ekweyelaki lisanga ya Yawe ! \v 18 Mpe bino bopesi Yawe lelo mokongo ? Soki bino botombokeli Yawe lelo, lobi Ye nde akotombokela lisanga mobimba ya Isalaele. \v 19 Soki mokili oyo bosili kozwa ezali mbindo, boleka na mokili ya Yawe, epai wapi Mongombo ya Yawe ezali mpe bokabola mabele elongo na biso. Kasi botombokela Yawe te, botombokela mpe biso te na komitongela etumbelo mosusu pene ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso. \v 20 Tango Akana, mwana mobali ya Zera, asalaki lisumu, na koyiba biloko ya bule, boni, etumbu yango ekweyaki te likolo ya lisanga mobimba ya Isalaele ? Akufaki kaka ye moko te likolo ya lisumu na ye. » \p \v 21 Bakitani ya Ribeni, ya Gadi, mpe ya ndambo ya libota ya Manase bazongiselaki bakambi ya mabota ya Isalaele : \pi1 \v 22 — Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Nzambe ya banzambe ! Yawe ! Ayebi nyonso ! Tika ete Isalaele ayeba mpe yango ! Soki tosali yango mpo na kotombokela Yawe to mpo na kosala lisumu na miso na Ye, tika ete abikisa biso te na mokolo ya lelo ! \v 23 Soki tomitongeli etumbelo mpo na kopesa Yawe mokongo to mpo na kobonza mbeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma na likolo na yango to mpe mpo na kobonza bambeka ya boyokani na likolo na yango, tika ete Yawe asambisa biso ! \v 24 Te, ezali bongo te ! Tosalaki bongo mpo na kobanga ete lobi bakitani na bino baloba na bakitani na biso : « Eloko nini ezali kosangisa bino na Yawe, Nzambe ya Isalaele ? \v 25 Yawe atiaki ebale Yordani lokola mondelo kati na biso mpe bino ; bino bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi ! Bozali na libula moko te epai na Yawe ! » Boye, bakitani na bino bakoki kosala ete bakitani na biso batika kobanga Yawe. \v 26 Yango wana tomilobelaki : « Tika ete tomitongela etumbelo oyo noki, kasi ezali te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu. \v 27 Ezali nde lokola litatoli kati na biso mpe bino, mpe mpo na milongo oyo ekoya, ete tokosalela Yawe na nzela ya mbeka ya kotumba mpe na nzela ya mbeka ya boyokani, na Esika na Ye ya bule. Boye lobi, bakitani na bino bakoloba na bakitani na biso te : ‹ Bozali na libula te epai na Yawe ! › » \v 28 Tomilobelaki : « Soki lobi bameki koloba na biso to na bakitani na biso bongo, tokozongisela bango : ‹ Botala elilingi ya etumbelo ya Yawe, oyo batata na biso batongaki ; basalaki yango te mpo na kobonza mbeka ya kotumba to mbeka mosusu, kasi mpo ete ezala lokola litatoli kati na biso mpe bino. › » \v 29 Tozali te na likanisi ya kotombokela Yawe to ya kopesa Ye lelo mokongo, na kotonga etumbelo mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo ya mbuma mpe bambeka mosusu pembeni ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na biso, oyo ezali liboso ya Mongombo na Ye. \p \v 30 Tango Nganga-Nzambe Pineasi, bakambi ya lisanga mpe bakambi ya mabota ya Isalaele bayokaki makambo oyo bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase balobaki, batondisamaki na esengo. \v 31 Mpe Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, alobaki na bakitani ya Ribeni, ya Gadi mpe ya Manase : \pi1 — Lelo, tososoli ete Yawe azali kati na biso, pamba te bosali likambo moko te ya mabe liboso ya Yawe. Sik’oyo bokangoli nde bana ya Isalaele wuta na loboko na Yawe. \p \v 32 Pineasi, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Eleazari, mpe bakambi ya bato nyonso ya Ribeni mpe ya Gadi balongwaki na Galadi epai wapi bazalaki na mayangani, bazongaki na Kanana epai ya bana ya Isalaele mpe bapesaki bango sango ya makambo oyo elekaki. \v 33 Bana ya Isalaele batondisamaki na esengo na koyoka sango yango mpe bakumisaki Nzambe. Boye, batikaki likanisi ya kobundisa mokili oyo bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi bazalaki kovanda. \p \v 34 Bakitani ya Ribeni mpe ya Gadi babengaki etumbelo yango « Edi » oyo elingi koloba : Litatoli kati na biso ete Yawe azali Nzambe. \c 23 \s1 Maloba ya suka ya Jozue \p \v 1 Sima na Yawe kopesa bopemi na Isalaele liboso ya banguna nyonso oyo bazingelaki bango, elekaki tango molayi. Bongo, Jozue akomaki mobange, mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki makasi. \v 2 Boye, Jozue abengisaki Isalaele mobimba : bampaka na yango, bakambi na yango, basambisi elongo na bakalaka na yango. Alobaki na bango : « Nakomi mobange mpe mibu ya bomoi na ngai epusani makasi. \v 3 Bino moko bomonaki makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki liboso ya bikolo oyo nyonso mpo na bolamu na bino, pamba te ezalaki Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki kobundela bino. \v 4 Bobosana te ndenge nini nazalaki kobeta zeke mpo na kokabolela mabota na bino lokola libula, mokili ya bikolo oyo etikali mpe ya bikolo oyo nabotolaki wuta na Yordani kino na Ebale monene, na ngambo ya weste. \v 5 Yawe, Nzambe na bino, nde akobengana bango, Ye moko, mosika liboso na bino ; akobengana bango liboso na bino mpe bokozwa mokili na bango ndenge Yawe, Nzambe na bino, alakaki. \p \v 6 Boyika mpiko mpe bosenzela mpo na kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize ; bokende libanda na yango te. \v 7 Bosala boyokani te elongo na bikolo mosusu oyo etikali kati na bino, bobelela bakombo ya banzambe na yango te to mpe bolapa ndayi na bakombo na yango te. Bomeka kosalela yango te mpe bofukamela yango te. \v 8 Kasi bokangama makasi na Yawe, Nzambe na bino, ndenge bozali kosala kino na mokolo ya lelo. \p \v 9 Yawe abenganaki bikolo ya minene mpe ya nguya liboso na bino ; mpe kino na moyi ya lelo, moko te alongi kotelema liboso na bino. \v 10 Moto moko kaka kati na bino azalaki kokimisa bato nkoto moko, pamba te Yawe, Nzambe na bino, azalaki kobundela bino ndenge alakaki. \v 11 Boye, bosala keba ete bolinga Yawe, Nzambe na bino. \p \v 12 Kasi soki bopesi Yawe mokongo, mpe soki bosali boyokani elongo na bato oyo babiki kati na bikolo oyo etikali kati na bino ; soki bosali mabala mpe bosangani elongo na bango, \v 13 boyeba ete Yawe, Nzambe na bino, akobengana lisusu te bikolo yango liboso na bino. Bakokoma nde minyama mpe mitambo mpo na bino, bafimbu na mikongo na bino mpe banzube kati na miso na bino, kino tango bokosila kokufa na mokili ya kitoko oyo Nzambe na bino apesaki bino. \p \v 14 Sik’oyo ngai nakomi pene ya kokende na nzela oyo moto nyonso akendaka. Na motema mpe elimo na bino mobimba, boyeba ete elaka moko te kati na bilaka nyonso ya kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino ekotikala kokweya. Bilaka nyonso esila kokokisama, moko te ekotikala kokweya. \v 15 Ndenge kaka bilaka nyonso ya kitoko ya Yawe, Nzambe na bino, ekokisamaki solo, ndenge wana mpe akotindela bino makambo mabe kino tango akosilisa koboma bino kati na mokili ya kitoko oyo apesaki bino \v 16 soki bobebisi boyokani ya Yawe, Nzambe na bino, oyo apeselaki bino mitindo, mpe bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango. Kanda ya Yawe ekotumba bino mpe bokosila kokufa noki penza na mokili ya kitoko oyo apesaki bino. » \c 24 \s1 Isalaele azwi mokano ya kosalela Yawe \p \v 1 Jozue asangisaki mabota nyonso ya Isalaele na Sishemi. Abengisaki bampaka, bakambi, basambisi mpe bakalaka ya Isalaele ; mpe bango bayaki liboso ya Nzambe. \p \v 2 Jozue alobaki na bato nyonso : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Wuta kala, bakoko na bino mpe Tera, tata ya Abrayami mpe Naori, bavandaki na ngambo mosusu ya ebale mpe bazalaki kosalela banzambe mosusu. \v 3 Kasi nabimisaki tata na bino, Abrayami, wuta na mokili oyo ezalaki na ngambo mosusu ya ebale, natambolisaki ye na mokili mobimba ya Kanana mpe napesaki ye bakitani ebele. Napesaki ye Izaki ; \v 4 mpe na nzela ya Izaki, napesaki ye Jakobi mpe Ezawu. Napesaki mokili ya bangomba Seiri epai ya Ezawu, kasi Jakobi elongo na bana na ye ya mibali, bakendeki na Ejipito. \pi1 \v 5 Boye, natindaki Moyize mpe Aron ; nabetaki Ejipito kolanda makambo nyonso oyo nasalaki kuna mpe nabimisaki bino kuna. \v 6 Tango nabimisaki batata na bino na Ejipito, bakomaki kino na ebale monene ya Barozo, bato ya Ejipito balandaki bango na bashar mpe na basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda kino na Ebale monene ya Motane. \v 7 Batata na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi, mpe Yawe atiaki molili kati na bino mpe bato ya Ejipito, azindisaki bango na mayi ya Ebale monene oyo ezipaki bango. Miso na bino moko emonaki makambo oyo nasalaki bato ya Ejipito. Mpe bowumelaki mibu ebele na esobe. \pi1 \v 8 Namemaki bino na mokili ya bato ya Amori, oyo bazalaki kovanda na ngambo ya este ya Yordani. Babundisaki bino kasi nakabaki bango na maboko na bino. Nabomaki bango na miso na bino mpe bobotolaki mokili na bango. \v 9 Tango Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi, abimaki mpo na kobundisa Isalaele, atindaki ete baluka Balami, mwana mobali ya Beori, mpo ete alakela bino mabe. \v 10 Kasi naboyaki koyoka Balami, boye akomaki nde kopambola bino tango na tango mpe nakangolaki bino na loboko na ye. \pi1 \v 11 Boye bokatisaki Yordani mpe bokomaki na engumba Jeriko. Bavandi ya Jeriko babundisaki bino ndenge kaka bato ya Amori, ya Perizi, ya Kanana, ya Iti, ya Girigazi, ya Evi mpe ya Yebusi, basalaki ; kasi nakabaki bango mpe na maboko na bino. \v 12 Natindelaki bango liboso na bino, banzoyi ya minene oyo ebenganaki bango mosika na bino, na bakonzi mibale ya Amori. Bosalaki yango na mipanga mpe na matolotolo na bino te. \v 13 Boye, napesaki bino mokili oyo bino bomonelaki pasi te mpe bingumba oyo bino botongaki te. Bokomaki kovanda kuna, kolia bambuma ya bilanga ya vino mpe ya olive oyo bolonaki te. \pi1 \v 14 Sik’oyo botosa Yawe mpe bosalela Ye na motema mobimba mpe na bosembo. Bobwaka banzambe oyo batata na bino basalelaki na ngambo mosusu ya ebale mpe na Ejipito, mpe bosalela Yawe. \v 15 Kasi soki bosepeli kosalela Yawe te, bopona lelo nani bolingi kosalela ; banzambe oyo batata na bino basalelaki tango bazalaki na ngambo mosusu ya ebale to banzambe ya bato ya Amori epai wapi bozali kovanda. Kasi ngai mpe libota na ngai, tokosalela Yawe. » \p \v 16 Bato bazongisaki : \pi1 — Tozali na likanisi te ya kosundola Yawe to ya kosalela banzambe mosusu ! \v 17 Pamba te Yawe azali Nzambe na biso ; ezali Ye Yawe nde abimisaki biso mpe batata na biso na Ejipito, na mokili wana ya bowumbu, mpe asalaki na miso na biso bilembo minene ya kokamwa. Azalaki kobatela biso na banzela nyonso oyo tozalaki kotambola mpe kati na bikolo nyonso epai wapi tozalaki koleka. \v 18 Yawe abenganaki liboso na biso bikolo nyonso elongo na bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na mokili oyo. Biso mpe tokosalela Yawe, pamba te azali Nzambe na biso. \p \v 19 Jozue alobaki na bato : \pi1 — Bokokoka kosalela Yawe te, pamba te azali Nzambe ya Bule, Nzambe ya Zuwa ; akolimbisa te botomboki mpe masumu na bino. \v 20 Soki bosundoli Yawe mpe bokeyi kosalela banzambe ya bapaya, akobalukela bino mpo na kosala bino mabe, mpe akosilisa koboma bino sima na kotalisa bino bolamu. \p \v 21 Kasi bato balobaki na Jozue : \pi1 — Te, tokosalela kaka Yawe ! \p \v 22 Jozue alobaki na bato : \pi1 — Bozali bino moko batatoli mpo na bino awa boponi kosalela Yawe. \p Bazongisaki : \pi1 — Ezali se bongo, tondimi yango, tozali batatoli. \p \v 23 Jozue alobaki : \pi1 — Na bongo, bolongola sik’oyo banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino mpe bopesa mitema na bino nyonso epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele. \p \v 24 Bato bazongiselaki Jozue : \pi1 — Tokosalela Yawe, Nzambe na biso, mpe tokoyoka mongongo na Ye. \p \v 25 Na mokolo wana, Jozue asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele na Sishemi, mpe apesaki bango mibeko mpe bikateli. \v 26 Bongo, Jozue akomaki makambo wana nyonso na buku ya Mobeko ya Nzambe. Akamataki libanga moko ya monene mpe atelemisaki yango wana, na se ya terebente oyo ezalaki kati na Esika ya bule ya Yawe. \p \v 27 Jozue alobaki na bato nyonso : \pi1 — Botala, libanga oyo ekozala litatoli mpo na biso, pamba te esili koyoka maloba nyonso oyo Yawe alobi na biso. Ekozala motatoli mpo na kosambisa bino mpo ete bowangana Nzambe na bino te. \p \v 28 Boye, Jozue azongisaki bato, moto na moto kati na libula na ye. \s1 Kufa ya Jozue \p \v 29 Sima na makambo oyo, Jozue, mwana mobali ya Nuni, mowumbu na Yawe, akufaki na mibu nkama moko na zomi. \v 30 Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Sera, na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi. \p \v 31 Bato ya Isalaele basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele bazalaki na bomoi. \p \v 32 Mpe bakundaki mikuwa ya Jozefi oyo bana ya Isalaele bamemaki wuta na Ejipito na Sishemi, na eteni ya elanga oyo Jakobi asombaki na motuya ya mbongo ya bibende nkama moko, epai ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi. Yango ekoma mpe libula ya bakitani ya Jozefi. \p \v 33 Bongo, Eleazari, mwana mobali ya Aron, mpe akufaki. Bakundaki ye na ngomba moke oyo bapesaki na Pineasi, mwana na ye ya mobali, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi.