\id JOB Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Yobo \toc1 Yobo \toc2 Yobo \toc3 Yb \mt1 Yobo \c 1 \s1 Komekama ya Yobo \p \v 1 Moto moko azalaki kovanda na mokili ya Utsi, kombo na ye ezalaki « Yobo ; » azalaki kotambola na boyengebene mpe na bosembo, azalaki kotosa Nzambe mpe kokima mabe. \v 2 Azalaki na bana mibali sambo, bana basi misato ; \v 3 mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu. \p \v 4 Bana na ye ya mibali bazalaki na ezaleli ya kosangana kati na ndako ya moko kati na bango, mpo na kosala feti ; mpe, na feti yango, bazalaki kobengisa bandeko na bango ya basi mpo na kolia mpe komela elongo na bango. \v 5 Mpe soki mikolo ya feti esili, Yobo azalaki kobengisa bana na ye mpo na kopetola bango. Na tongo-tongo, azalaki kobonza mbeka ya kotumba mpo na moko na moko kati na bango ; pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu bana na ngai basali masumu mpe balakeli Nzambe mabe kati na mitema na bango. » \p Yobo azalaki kosala bongo tango nyonso. \s1 Komekama ya liboso \p \v 6 Mokolo moko, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango. \p \v 7 Yawe atunaki Satana : \pi1 — Owuti wapi ? \p Satana azongiselaki Yawe : \pi1 — Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili. \p \v 8 Yawe alobaki na Satana : \pi1 — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe. \p \v 9 Satana azongiselaki Yawe : \pi1 — Okanisi ete ezali na pamba nde Yobo atosaka Nzambe ? \v 10 Boni, otonga mir te zingazinga na ye mpo na kobatela ye, ndako na ye mpe biloko na ye nyonso ? Opambola misala ya maboko na ye, mpe bibwele na ye epanzana na mokili mobimba. \v 11 Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo mpe beta biloko na ye nyonso ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo. \p \v 12 Yawe alobaki na Satana : \pi1 — Malamu ! Biloko na ye nyonso ezali kati na maboko na yo ; kasi, kokitisa loboko na yo te na bomoi na ye ! \p Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe. \p \v 13 Mokolo moko, tango bana mibali mpe bana basi ya Yobo bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso, \v 14 ntoma moko ayaki epai na Yobo mpo na koyebisa ye : « Bangombe ezalaki kobalola mabele ya bilanga, mpe ba-ane ezalaki kolia matiti pembeni wana ; \v 15 bongo bato ya Saba bayei kokweyela yango mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! » \p \v 16 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Moto ya Nzambe ekweyi longwa na likolo mpe ezikisi bibwele mpe basali ! Ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! » \p \v 17 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Bato ya Chalide basalaki masanga misato, bakweyeli bashamo na yo mpe bakei na yango. Babomi basali na mopanga, mpe ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! » \p \v 18 Wana azalaki nanu koloba, ntoma mosusu ayaki mpe alobaki : « Wana bana na yo ya mibali mpe ya basi bazalaki kosala feti mpe komela masanga ya vino kati na ndako ya ndeko mobali na bango ya liboso, \v 19 mopepe moko ya makasi ewutaki na ngambo mosusu ya esobe mpe eyaki kobeta basonge minei ya ndako. Ndako ekweyeli bango, mpe bango nyonso basili kokufa. Ngai moko kaka moto nabiki ; yango wana nayei kopesa yo sango ! » \p \v 20 Yobo atelemaki, apasolaki kazaka na ye, akokolaki suki ya moto na ye, akweyaki na mabele mpe afukamaki. \v 21 Alobaki : \q1 « Nabimaki bolumbu, na libumu ya mama na ngai, \q2 mpe nakozonga bolumbu. \q1 Yawe apesaki, mpe Yawe asili kozwa ; \q2 tika ete Kombo na Ye ekumisama ! » \p \v 22 Na makambo wana nyonso, Yobo atikalaki kosala lisumu te mpe atangaki pasi yango na moto ya Nzambe te. \c 2 \s1 Komekama ya mibale \p \v 1 Mokolo moko lisusu, ba-anjelu ya Nzambe bayaki komilakisa liboso ya Yawe. Satana mpe ayaki elongo na bango. \p \v 2 Yawe atunaki Satana : \pi1 — Owuti wapi ? \p Satana azongiselaki Yawe : \pi1 — Nawuti kotambola mpe koyengayenga na mokili. \p \v 3 Yawe alobaki na Satana : \pi1 — Boni, omoni Yobo, mosali na Ngai ? Ezali na moto moko te oyo azali lokola ye, kati na mokili : azali moyengebene mpe moto ya sembo, atosaka Nzambe mpe akimaka mabe. Azali kaka kotingama na bosembo na ye, atako otindikaki Ngai na pamba ete nasala ye mabe. \p \v 4 Satana azongiselaki Yawe : \pi1 — Poso mpo na poso : moto akoki kopesa biloko na ye nyonso mpo kaka abikisa bomoi na ye. \v 5 Kasi sik’oyo, sembola kaka loboko na Yo, beta nzoto mpe mikuwa na ye ; okomona penza soki akolakela Yo mabe te na miso na Yo. \p \v 6 Yawe alobaki na Satana : \pi1 — Malamu ! Azali kati na maboko na yo, kasi kosimba bomoi na ye te ! \p \v 7 Boye, Satana alongwaki liboso ya Yawe mpe abwakelaki Yobo bokono ya mabe na poso ya nzoto, longwa na se ya matambe na ye kino na songe ya moto. \p \v 8 Yobo akamataki eteni ya mbeki mpo na komikwanza na yango nzoto, mpe amivandisaki na putulu. \v 9 Mwasi na ye alobaki na ye : \pi1 — Boni, ozali kaka kokoba na bosembo na yo ? Lakela Nzambe mabe mpe kufa na yo ! \p \v 10 Yobo azongiselaki ye : \pi1 — Ah ! Ozali koloba lokola moto ya liboma ! Boni, tondimaka kaka makambo ya malamu, epai ya Nzambe, kasi tondimaka makambo mabe te ? \s1 Baninga misato ya Yobo \p \v 11 Tango baninga misato ya Yobo —Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa ; mpe Tsofari, moto ya Naama— bayokaki sango ya pasi nyonso oyo ekomelaki Yobo, batikaki bandako na bango mpe bayokanaki mpo na kokende kokabola pasi elongo na ye mpe kobondisa ye. \p \v 12 Wuta na mosika, tango kaka bamonaki ye, bakokaki te koyeba ye lisusu ; boye, babandaki wana kolela makasi, bapasolaki banzambala na bango mpe bamibwakelaki putulu na mito. \v 13 Bamivandisaki na mabele elongo na Yobo mikolo sambo mpe butu sambo. Moko te akokaki koloba na ye ata liloba moko, pamba te bamonaki ndenge nini pasi na ye ezalaki makasi. \c 3 \ms1 Maloba ya Yobo mpe ya balingami na ye misato \s1 Yobo alakeli mokolo ya mbotama na ye mabe \p \v 1 Sima na yango, Yobo afungolaki monoko na ye mpe alakelaki mokolo ya mbotama na ye mabe. \v 2 Yobo alobaki : \q1 \v 3 « Tika ete mokolo ya mbotama na ngai, \q2 mpe butu oyo elobaki : \q2 ‹ Mwana mobali moko abotami, › ekufa ! \q1 \v 4 Tika ete mokolo yango ebongwana molili ! \q2 Tika ete, wuta na likolo, \q2 Nzambe akanisa yango lisusu te ! \q1 Tika ete pole engengela yango lisusu te ! \q1 \v 5 Tika ete molili mpe elilingi ya kufa ezingela yango ! \q2 Tika ete lipata ezipa yango, \q2 mpe molili ebangisa pole na yango ! \q1 \v 6 Tika ete molili makasi ekotela butu yango, \q2 ete batanga yango lisusu te kati na mikolo ya mibu \q2 to kati na mikolo ya basanza ! \q1 \v 7 Tika ete butu yango etikala ekomba, \q2 ete koganga moko te ya esengo eyokana na butu yango ! \q1 \v 8 Tika ete bato oyo balakelaka mikolo mabe, \q2 bato oyo balamusaka bilima minene ya mayi, \q2 balakela yango mabe ! \q1 \v 9 Tika ete minzoto ya tongo na yango ekoma molili, \q2 ezela na pamba tongo oyo ekotana \q2 mpe emona kongenga ya tongo te. \q1 \v 10 Pamba te ekangelaki ngai te \q2 bikuke ya libumu ya mama na ngai \q2 mpo na kobombela miso na ngai pasi ya boye ! \b \q1 \v 11 Mpo na nini namikufelaki te \q2 kati na libumu ya mama na ngai ? \q1 Mpo na nini nakataki motema te \q2 tango nabimaki na libumu ya mama na ngai ? \q1 \v 12 Mpo na nini mabolongo eyambaki ngai ? \q2 Mpo na nini mama amelisaki ngai mabele ? \q1 \v 13 Pamba te sik’oyo, nalingaki na ngai kolala na kimia, \q2 nalingaki na ngai kokufa mpe kopema \q1 \v 14 elongo na bakonzi mpe bapesi toli ya mokili, \q2 oyo bamitongelaki malita na bango kasi lelo ebeba, \q1 \v 15 elongo na bakambi oyo bazalaki na wolo \q2 mpe batondisa palata kati na bandako na bango. \q1 \v 16 Mpo na nini babombaki ngai te na se ya mabele \q2 lokola zemi oyo esopani \q1 to lokola mwana oyo atikala komona te \q2 pole ya mokolo ? \q1 \v 17 Kuna, bato mabe batikaka konyokola bato, \q2 bato oyo balembi bazwaka bopemi, \q1 \v 18 bato ya boloko bazwaka kimia \q2 mpe bayokaka lisusu te mongongo ya mokengeli. \q1 \v 19 Ezala mobola to mozwi, bango mibale bazalaka kuna, \q2 mpe mowumbu akangolamaka na maboko ya nkolo na ye. \b \q1 \v 20 Mpo na nini pole epesamelaka bato ya pasi ? \q2 Mpo na nini bomoi epesamelaka moto \q2 oyo azali na pasi na motema ? \q1 \v 21 Bazelaka kufa, kasi eyaka te ; \q2 nzokande balukaka yango koleka bozwi oyo ebombama, \q1 \v 22 balingaki kotonda na esengo mpe kosepela \q2 soki bamoni kunda ! \q1 \v 23 Mpo na nini bomoi epesamela moto \q2 oyo nzela na ye ebombama, \q2 moto oyo Nzambe azingela lokola lopango ? \q1 \v 24 Pamba te kolela ekomi bilei na ngai, \q2 bileli na ngai ezali kosopana lokola mayi. \q1 \v 25 Makambo oyo nazalaki kobanga, \q2 yango nde ezali kokomela ngai ; \q1 oyo nazalaki koyokela somo, \q2 yango nde ezali kosalemela ngai. \q1 \v 26 Nazangi kimia, motema na ngai ezali kokita te \q2 mpe nazangi bopemi ; \q2 kasi minyoko na minyoko kaka nde nazali na yango. » \c 4 \s1 Maloba ya Elifazi : moto nyonso asalaka mabe \p \v 1 Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki : \q1 \v 2 « Soki moto moko ameki koloba na yo ata liloba moko, \q2 boni, okotomboka mpo na yango te ? \q1 Kasi nani akoki penza kokanga motema \q2 mpe kozanga maloba ? \q1 \v 3 Kanisa nanu ndenge ozalaki koteya bato ebele, \q2 ndenge ozalaki kolendisa bato oyo balembaki ! \q1 \v 4 Maloba na yo ezalaki kolendisa bato \q2 oyo bazalaki kotepatepa, \q2 mpe oyo mabolongo na bango ezalaki kolemba. \q1 \v 5 Kasi awa sik’oyo pasi ekomeli yo, \q2 olembi na yo ! \q1 Awa pasi ebeti yo, \q2 okomi na yo koyoka somo ! \q1 \v 6 Boni, kondima na yo epai ya Nzambe esengeli te \q2 kozala likonzi na yo, \q1 mpe bosembo na yo esengeli te \q2 kosimba elikya na yo ? \b \q1 \v 7 Kanisa nanu : Nani akotikala kokufa te \q2 mpo ete asalaka mabe te ? \q2 Esika nini bato ya sembo bakotikala kokufa te ? \q1 \v 8 Kolanda makambo oyo ngai nasili komona, \q2 bato oyo basalaka mabe, \q1 mpe ba-oyo balonaka minyoko, \q2 babukaka mpe kaka mabe lokola mbuma ; \q1 \v 9 bakufaka na mopepe ya Nzambe \q2 mpe basilaka na mopepe ya kanda na Ye. \b \q1 \v 10 Nkosi ekoki na yango koganga, \q2 mpe mwana ya nkosi ekoki kotia makelele ndenge elingi, \q2 kasi Nzambe abukaka minu ya nkosi. \q1 \v 11 Nkosi ekufaka mpo na kozanga nyama ya kolia, \q2 mpe bana ya nkosi ya mwasi epanzanaka. \b \q1 \v 12 Liloba moko eyelaki ngai na nkuku, \q2 mpe matoyi na ngai eyokaki yango na se penza : \q1 \v 13 kati na bandoto ya butu, \q2 na tango bato bazwaka pongi makasi, \q1 \v 14 kobanga mpe somo ekangaki ngai \q2 mpe eningisaki mikuwa na ngai nyonso ; \q1 \v 15 molimo moko elekaki liboso ya elongi na ngai \q2 lokola mopepe, \q2 mpe suki ya moto na ngai etelemaki. \q1 \v 16 Molimo yango etelemaki wana, \q2 kasi nalongaki te kososola soki ezali nini ; \q1 elilingi yango etelemaki liboso ya miso na ngai, \q2 mpe nayokaki mongongo moko koloba na se penza : \q1 \v 17 ‹ Boni, moto akoki solo koleka Nzambe na bosembo \q2 to akoki solo koleka Mokeli na ye na bule ? \q1 \v 18 Soki Nzambe atielaka basali na Ye motema te, \q2 soki kutu amonaka mabunga epai ya ba-anjelu na Ye, \q1 \v 19 mpo na nini te epai ya bato oyo basalema na mabele, \q2 ba-oyo bazali kaka putulu \q2 mpe bakoki kofinafina bango lokola mitsopi ? \q1 \v 20 Kobanda na tongo kino na pokwa, \q2 bakataka-kataka bango na biteni ; \q1 bakufaka mpo na libela, \q2 mpe moto ata moko te alandelaka likambo na bango ; \q1 \v 21 basinga oyo esimbaka bandako na bango ya kapo \q2 epikolamaka na mbalakata, \q2 mpe bakufaka ndenge wana bazanga bwanya. › \b \c 5 \q1 \v 1 Ganga na yo, soki olingi ! \q2 Nani akoyanola yo ? \q2 Okotombokela mosantu nini ? \q1 \v 2 Kotomboka ebomaka moto oyo azangi mayele, \q2 zuwa ebomaka zoba. \q1 \v 3 Solo, namonaki zoba kozwa misisa ; \q2 kasi, mbala moko, nalakelaki ndako na ye mabe : \q1 \v 4 ‹ Tika ete bana na ye ya mibali bazanga lisungi, \q2 balonga te na kosambisama \q2 mpe bazangela moto oyo akobundela bango ! \q1 \v 5 Tika ete moto oyo azali na nzala \q2 asilisa mbuma ya elanga na ye, \q1 akamata yango kino kati na basende ; \q2 mpe tika ete moto ya lokoso asilisa bomengo na ye ! › \q1 \v 6 Pamba te pasi ewutaka na putulu te, \q2 mpe minyoko ewutaka na mabele te ; \q1 \v 7 moto abotamaka mpo na komona pasi, \q2 ndenge kaka mikalikali ebimaka mpo na kopanzana na likolo. \b \q1 \v 8 Kasi soki ezalaki ngai, \q2 nalingaki komimonisa liboso ya Nzambe, \q2 nalingaki kotalisa Ye likambo na ngai. \q1 \v 9 Nzambe asalaka makambo minene \q2 oyo bato bakokaka kososola te, \q2 mpe bikamwa oyo bato bakokaka kotanga te ; \q1 \v 10 anokisaka mvula na mokili, \q2 mpe atindaka mayi na bilanga ; \q1 \v 11 atombolaka bato oyo babwakama, \q2 mpe apesaka esengo na bato oyo bazali kolela ; \q1 \v 12 abebisaka mabongisi ya bato \q2 oyo bazalaka na mayele mabe, \q2 mpe maboko na bango ekokisaka te mikano na bango ; \q1 \v 13 akangaka bato ya bwanya \q2 kati na mitambo ya mayele mabe na bango, \q2 mpe abebisaka mabongisi ya bakosi. \q1 \v 14 Molili eyelaka bango na moyi ; \q2 na moyi makasi, batambolaka na kotepatepa lokola na butu. \b \q1 \v 15 Nzambe abikisaka mobola \q2 na mopanga ya monoko na bango, \q1 akangolaka moto akelela \q2 na loboko ya moto ya makasi. \q1 \v 16 Boye, mobola asengeli kozala na elikya, \q2 mpe moto oyo atambolaka na bosembo te \q2 asengeli kokanga monoko. \b \q1 \v 17 Esengo na moto oyo Nzambe apameli ! \q2 Kotiolaka te pamela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. \q1 \v 18 Pamba te azokisaka pota, kasi atiaka yango mpe kisi ; \q2 abetaka, kasi loboko na Ye ebikisaka. \q1 \v 19 Mbala motoba, akobikisa yo na pasi ; \q2 mpe na mbala ya sambo, mabe ekokomela yo te. \q1 \v 20 Akokangola yo na kufa, \q2 na tango ya nzala makasi ; \q1 mpe akobikisa yo na nguya ya mopanga, \q2 kati na bitumba. \q1 \v 21 Okobatelama liboso ya fimbu ya lolemo, \q2 okobanga kobebisama te tango ekoya ; \q1 \v 22 okoseka kobebisama mpe nzala makasi, \q2 mpe okobanga te banyama ya mokili ; \q1 \v 23 pamba te okozala na boyokani elongo na mabanga ya bilanga, \q2 mpe banyama ya zamba ekozala na kimia elongo na yo. \q1 \v 24 Okososola ete ndako na yo ezali na kimia ; \q2 tango okotala bibwele kati na lopango na yo, \q2 okomona ete ata moko te ezangi. \q1 \v 25 Okososola ete bana na yo bakozala ebele, \q2 mpe bakitani na yo, lokola matiti ya mabele. \q1 \v 26 Okokita na kunda na kimobange makasi, \q2 ndenge batelemisaka maboke ya matiti na tango na yango. \b \q1 \v 27 Toyekolaki likambo yango malamu : ezali penza bongo. \q2 Boye, yoka yango mpe salela yango \q2 mpo na bolamu na yo ! » \c 6 \s1 Eyano ya Yobo epai ya Elifazi \p \v 1 Yobo azongisaki : \q1 \v 2 « Ah ! Soki ezalaki na makoki ya komeka \q2 kilo ya mawa na ngai, \q2 mpe ya kotia pasi na ngai nyonso na emekelo kilo, \q1 \v 3 nakanisi ete elingaki koleka zelo ya bibale minene na kilo. \q2 Yango wana, maloba na ngai ezali koleka ndelo. \q1 \v 4 Makonga ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso etoboli ngai, \q2 mpe molimo na ngai ezali komela ngenge na yango ; \q2 Nzambe atelemeli ngai na kanda na Ye. \q1 \v 5 Boni, ane ya zamba elelaka \q2 soki ezali kolia matiti ? \q1 Ngombe ya mobali elelaka \q2 soki ezali kolia bilei na yango ? \q1 \v 6 Boni, baliaka na mungwa te bilei oyo ezanga elengi ? \q2 Mayi oyo ezalaka kati na maki ezalaka elengi ? \q1 \v 7 Makambo oyo nazalaki koboya, \q2 yango nde ekomi bilei na ngai, atako ezali mabe. \b \q1 \v 8 Ah ! Nani akoki kosala ete \q2 bosenga na ngai ekokisama, \q1 mpe ete Nzambe akokisela ngai \q2 likambo oyo nazali kozela ! \q1 \v 9 Tika ete Nzambe aboma na Ye ngai, \q2 asembola loboko na Ye mpo na kokata ngai moto ! \q1 \v 10 Na boye nde nakoki kozwa kobondisama mpe esengo \q2 kati na pasi na ngai, oyo eleki ndelo, \q2 pamba te nawangani te maloba ya Ye oyo azali Mosantu. \b \q1 \v 11 Makasi nini penza nazali na yango \q2 mpo ete nazala lisusu na elikya ? \q1 Mpo na nini nawumela lisusu kotala \q2 suka ya bomoi na ngai ? \q1 \v 12 Boni, nazali makasi lokola libanga ? \q2 Nzoto na ngai ezali ya ebende ? \q1 \v 13 Nazali na nguya ya komisunga \q2 awa natikali lisusu na makoki te ? \b \q1 \v 14 Moto nyonso oyo azali na pasi \q2 asengeli na mawa ya baninga na ye, \q2 ata soki atiki kotosa Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. \q1 \v 15 Kasi tala, bandeko na ngai bakosi ngai lokola moluka, \q2 lokola mayi ya moluka oyo ekawuki. \q1 \v 16 Tango mayi oyo ekomaka libanga mpo na malili, \q2 mpe mvula ya pembe, epanzanaka, \q2 ememaka mpela. \q1 \v 17 Kasi na tango ya molunge, mayi yango esilaka, \q2 mpe moluka yango ekawukaka nyonso \q2 mpo na molunge makasi. \q1 \v 18 Masanga ya bato oyo batambolaka na bampunda \q2 mpo na kokende na mobembo, \q1 ebongoli nzela ya kokende, \q2 ekeyi kokota kino kati na esobe mpe ekufi kuna. \q1 \v 19 Masanga ya bato ya Tema, oyo ezali na mobembo, \q2 elukaki mayi ; \q1 masanga ya bato ya Saba, oyo ezali na mobembo, \q2 etielaki yango motema. \q1 \v 20 Kasi bayokaki soni mpo ete batielaki yango motema ; \q2 tango bakomaki kuna, bamiyokelaki mawa. \q1 \v 21 Bino mpe bozali ndenge wana mpo na ngai, \q2 bozali na makoki te ya kosunga ngai ; \q2 awa bomoni pasi na ngai, somo ekangi bino ! \q1 \v 22 Boni, nasila koloba na bino : \q2 ‹ Bokabela ngai ndambo ya biloko na bino \q2 to bofutela ngai niongo na nzela ya bozwi na bino, \q1 \v 23 mpo na kokangola ngai na loboko ya monguna \q2 to mpo na kobikisa ngai na nguya ya bato mabe ? › \b \q1 \v 24 Boteya ngai, bongo nakokanga monoko ; \q2 bolakisa ngai mabe nini ngai nasali ! \q1 \v 25 Tala ndenge maloba ya solo esalaka pasi ! \q2 Kasi makanisi na bino elingi kotalisa nini ? \q1 \v 26 Bokanisi ete bokoki kosembola \q2 makambo oyo nazali koloba \q2 to kozwa lokola mopepe, maloba ya moto oyo azali na pasi ? \q1 \v 27 Solo, bino, bokoki ata kobeta zeke mpo na mwana etike \q2 mpe koteka moninga na bino na bowumbu ! \b \q1 \v 28 Kasi sik’oyo, bozala na mitema malamu mpo na kotala ngai ! \q2 Boni, nakoki penza kokosa bino, \q2 kaka na miso makasi boye ? \q1 \v 29 Bokanisa nanu malamu, bozala nanu sembo ! \q2 Bokanisa penza malamu, \q2 pamba te ezali bosembo na ngai nde emekami. \q1 \v 30 Boni, likambo nini ya mabe ezali na monoko na ngai ; \q2 monoko na ngai ekoki kososola mabe te ? \b \c 7 \q1 \v 1 Boni, bomoi ya moto awa na se ezali kaka \q2 bomoi ya pasi te ? \q1 Mikolo ya bomoi na ye ezali penza \q2 mikolo ya mongamba te ? \q1 \v 2 Ndenge mowumbu azelaka pio ya pokwa \q2 to ndenge mongamba azelaka makasi lifuti na ye, \q1 \v 3 ngai nazwaki lokola libula, basanza ya pamba \q2 mpe babutu ya pasi na pasi. \q1 \v 4 Soki kaka nalali, nakomi komituna : \q2 ‹ Tango nini nakolamuka ? › \q1 Mpe soki kaka nalamuki : \q2 ‹ Tango nini butu ekoya ? › \q2 Nalembi komitungisa tango nyonso. \q1 \v 5 Nkusu mpe makwanza ezipi nzoto na ngai, \q2 poso ya nzoto na ngai ezoki-zoki bapota \q2 mpe ekomi kolumba solo. \b \q1 \v 6 Mikolo ya bomoi na ngai ezali koleka mbangu penza \q2 koleka tonga oyo mosali bilamba asalelaka ; \q2 nakomi na suka, mpe elikya na ngai nyonso esili. \q1 \v 7 Oh Nkolo, kobosana te \q2 ete bomoi na ngai ezali kaka pema ya pamba ! \q2 Miso na ngai ekomona lisusu bolamu te. \q1 \v 8 Liso oyo ezali komona ngai sik’oyo \q2 ekotikala komona ngai lisusu te ; \q2 okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. \q1 \v 9 Ndenge mapata ekendaka mpe elimwaka, \q2 ndenge wana mpe moto oyo akendaka na mboka ya bakufi \q2 azongaka lisusu te. \q1 \v 10 Akozonga lisusu te na ndako na ye, \q2 mpe ndako na ye ekoyeba ye lisusu te. \b \q1 \v 11 Yango wana, nakokanga monoko na ngai te, \q2 molimo na ngai ekoloba kaka na mawa, \q2 mpe motema na ngai ekolela kaka pasi na ngai. \q1 \v 12 Boni, nakomi ebale to elima ya mayi \q2 mpo ete batiela ngai bikangiseli ? \q1 \v 13 Nakanisaka ete soki nalali, \q2 mbeto na ngai ekobondisa ngai \q2 mpe pongi ekokitisa pasi na ngai ; \q1 \v 14 nzokande, ozali lisusu kotungisa ngai na bandoto ya mabe \q2 mpe kobangisa ngai na bimoniseli ya somo. \q1 \v 15 Malamu bafina ngai kingo mpe nakufa, \q2 pamba te kufa ezali na litomba koleka bomoi oyo. \q1 \v 16 Nayini bomoi na ngai ; nawumela libela te na bomoi ! \q2 Tika ngai kimia, pamba te mikolo na ngai ezanga na yango tina. \b \q1 \v 17 Moto azali penza nani mpo ete okanisaka ye, \q2 mpo ete olandelaka ye na bokebi, \q1 \v 18 mpo ete otalaka ye tango nyonso \q2 mpe omekaka ye tango nyonso ? \q1 \v 19 Mpo na nini okoki kolongola miso na Yo te likolo na ngai ? \q2 Mpo na nini okoki kotika ngai kimia te \q2 ata mpo na ngonga moke ? \q1 \v 20 Oh Mokeli na ngai, soki nasali lisumu, \q2 eloko nini ngai nasali Yo ? \q1 Mpo na nini oponi kaka kobeta ngai ? \q2 Boni, nakomi mokumba mpo na Yo ? \q1 \v 21 Mpo na nini ozali kolimbisa mabunga na ngai te \q2 mpe ozali kobosana masumu na ngai te ? \q1 Kala mingi te, nakokende kolala na putulu ; \q2 okoluka ngai, kasi nakozala lisusu te. » \c 8 \s1 Maloba ya Bilidadi : Nzambe azali sembo \p \v 1 Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki : \q1 \v 2 « Kino tango nini okokoba koloba makambo ya boye ? \q2 Maloba na yo ezali te lokola mopepe makasi ? \q1 \v 3 Boni, Nzambe abukaka mibeko, \q2 Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abalolaka penza bosembo ? \q1 \v 4 Soki bana na yo basalaki masumu liboso na Ye, \q2 apesaki nde bango etumbu mpo na mabe na bango ! \q1 \v 5 Kasi yo, soki oluki Nzambe, \q2 soki osengi ngolu epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, \q1 \v 6 soki ozali peto, soki ozali sembo, \q2 akotelema Ye moko, ata sik’oyo, \q1 mpo na kokata likambo na yo \q2 mpe kozongisela yo libula na yo, kolanda bosembo na yo. \q1 \v 7 Bozwi na yo ya kala ekomonana moke, \q2 pamba te bozwi oyo ekoya na sima ekozala monene koleka. \b \q1 \v 8 Nabondeli yo, tuna bato oyo baleka liboso, \q2 kanisa mpe landela malamu bwanya ya batata na bango, \q1 \v 9 pamba te, biso, tozali bato ya lobi oyo ewuti koleka, \q2 toyebi eloko te, \q2 mpe mikolo na biso, awa na se, ezali kaka lokola elili. \q1 \v 10 Bato ya kala bakoteya yo, bakoloba na yo, \q2 mpe, na bwanya na bango, bakobimisela yo mateya oyo : \q1 \v 11 Boni, nzete ya papirisi ekoki penza kobota \q2 na esika oyo ezangi potopoto ? \q1 Nzete oyo ebotaka na mayi ekoki solo kobota \q2 na esika ekawuka ? \q1 \v 12 Ekawukaka liboso ya matiti nyonso, \q2 wana makasa na yango ezali nanu mobesu, \q2 ata bapikoli yango te. \q1 \v 13 Ndenge wana nde ezalaka, bomoi ya bato nyonso \q2 oyo babosanaka Nzambe ; \q2 boye, elikya ya bato mabe ebebaka. \q1 \v 14 Eloko oyo batielaka motema ekokatana, \q2 pamba te elikya na bango ezali \q2 lokola ndako ya limpulututu\f + \fr 8.14 \fr*\ft Limpulututu ezali nyama ya moke oyo babengaka na lifalanse araignée.\ft*\f*. \q1 \v 15 Ata batieli ndako na bango motema, \q2 esimbaka te ; \q1 Ezala bakangami na yango, \q2 esimbaka kaka te. \q1 \v 16 Bazali lokola nzete ya mobesu \q2 na tango ya moyi makasi ; \q2 mandalala na yango ezipaka elanga, \q1 \v 17 elingaka misisa na yango zingazinga ya mabanga \q2 mpe epasolaka nzela kati na mabanga ; \q1 \v 18 kasi soki bapikoli nzete yango na esika na yango, \q2 esika yango ewanganaka nzete \q2 mpe elobaka : ‹ Natikala komona yo te ! › \q1 \v 19 Ndenge wana nde suka na yango ekozala ; \q2 mpe banzete mosusu ekobota kaka na mabele wana. \b \q1 \v 20 Solo, Nzambe abwakaka te bato ya sembo, \q2 mpe alendisaka te maboko ya bato mabe. \q1 \v 21 Nzokande, akotondisa monoko na yo na koseka, \q2 mpe bibebu na yo na banzembo ya esengo. \q1 \v 22 Banguna na yo bakotondisama na soni, \q2 mpe bandako ya bato mabe ekozala lisusu te. » \c 9 \s1 Eyano ya Yobo epai ya Bilidadi \p \v 1 Yobo azongisaki : \q1 \v 2 « Ezali ya solo, ezali penza ndenge osili koloba, \q2 mpe nayebi yango malamu ! \q1 Kasi ndenge nini moto oyo asalema na putulu \q2 akoki kozala sembo liboso ya Nzambe ? \q1 \v 3 Ata, na mbala nkoto moko, \q2 ameki kobeta tembe na Nzambe, \q2 akotikala kokoka kolonga ata mbala moko te. \q1 \v 4 Bwanya ya Nzambe ezali na bozindo makasi, \q2 mpe nguya na Ye ezali monene ; \q2 nani asila kotelemela Ye, bongo amona bolamu ? \q1 \v 5 Alongolaka bangomba na bisika na yango, \q2 wana yango moko eyebaka te, \q2 mpe, kati na kanda na Ye, akweyisaka yango ; \q1 \v 6 aningisaka mabele wuta na esika na yango \q2 mpe alengisaka makonzi na yango ; \q1 \v 7 apesaka mitindo na moyi, mpe moyi ebimaka te ; \q2 atiaka kashe na minzoto. \q1 \v 8 Atandaki Ye moko Likolo \q2 mpe atambolaka likolo ya mbonge ya ebale ; \q1 \v 9 akelaki bangombolo minene, \q2 orioni, masanga ya minzoto mpe minzoto ya sude ; \q1 \v 10 asalaka makambo minene \q2 oyo elekelaka mayele ya bato, \q2 bikamwa ya somo oyo bakokaka kotanga te. \q1 \v 11 Soki aleki pene na ngai, nakokoka te komona Ye ; \q2 soki mpe akei, nakokoka te komona Ye. \q1 \v 12 Soki azwi eloko, nani akoki kobotola Ye yango ? \q2 Nani akoki koloba na Ye : ‹ Ozali kosala nini ? › \q1 \v 13 Nzambe azongisaka kanda na Ye sima te ; \q2 liboso na Ye, ezala bato ya lolendo balengaka. \b \q1 \v 14 Bongo, ngai, nakokoka ndenge nini kobeta tembe na Ye ? \q2 Nakolonga ndenge nini kopona \q2 maloba ya komekana na Ye ? \q1 \v 15 Ezala soki nazalaki moto ya sembo, \q2 nalingaki na ngai kokoka te kopesa Ye eyano ; \q1 nalingaki kokoka nde kaka kosenga \q2 mawa ya Mosambisi na ngai. \q1 \v 16 Ata nabelelaki Ye, mpe ayanoli ngai, \q2 nalingaki na ngai kondima te ete ayoki ngai, \q1 \v 17 pamba te afini ngai na nzela ya mopepe makasi \q2 mpe akomisi bapota na ngai ebele na pamba, \q1 \v 18 aboyi kotikela ngai tango ya kopema, \q2 wana azali kaka kotondisa ngai na pasi. \q1 \v 19 Soki ezali likambo oyo esengi makasi, \q2 Ye nde Nkolo-Na-Nguya ! \q1 Mpe soki ezali likambo ya bosembo, \q2 nani akoki kosambisa Ye ? \q1 \v 20 Ezala namemaki na ngai ngambo te, \q2 monoko na ngai elingaki kaka kokweyisa ngai ; \q1 ezala nazalaki sembo, \q2 monoko na ngai elingaki kaka kolakisa mbeba na ngai. \b \q1 \v 21 Atako nazali sembo, \q2 motema na ngai etondi na mawa mpo na ngai moko, \q2 nayini bomoi na ngai. \q1 \v 22 Nyonso ezali kaka ndenge moko ! \q2 Yango wana nalobi : \q2 ‹ Abomaka bato ya sembo mpe bato mabe. › \q1 \v 23 Tango mopepe ya bokono ememaka kufa na mbalakata, \q2 Nzambe asekaka komekama ya bato ya sembo. \q1 \v 24 Soki mokili ekweyi na maboko ya bato mabe, \q2 Nzambe azipaka miso ya basambisi na yango. \q2 Soki ezali Ye te, ezali nani ? \b \q1 \v 25 Mikolo ya bomoi na ngai ezali kokende mbangu \q2 koleka mopoti mbangu, \q1 ezali kokende mbangu penza, \q2 kasi etikali komona esengo te. \q1 \v 26 Ezali kokende penza mbangu \q2 koleka masuwa oyo esalema na papirisi, \q2 koleka mpongo oyo ezali kokitela bilei na yango. \q1 \v 27 Soki nalobi : ‹ Nabosana ata pasi na ngai, \q2 nabongola elongi na ngai mpe nakoma koseka, › \q1 \v 28 nazali kaka kobanga pasi na ngai nyonso, \q2 pamba te nayebi ete okozwa na Yo ngai te \q2 lokola moto ya sembo. \q1 \v 29 Lokola esili komonana ete nasali mabe, \q2 mpo na nini namitungisa lisusu na pamba ? \q1 \v 30 Ezala namisukoli nzoto na sabuni \q2 mpe nasukoli maboko na ngai na sabuni ya malonga, \q1 \v 31 okobwaka ngai kaka na libulu ya potopoto, \q2 mpe bilamba na ngai ekoyoka ngai nkele. \b \q1 \v 32 Azali moto lokola ngai te \q2 mpo ete nazongisela Ye eyano \q2 to nakende kosamba na Ye liboso ya basambisi. \q1 \v 33 Soki ezalaki ata na moto moko \q2 oyo akokaki komikotisa kati na likambo na biso \q2 mpe kotombola loboko na ye kati na ngai mpe Nzambe, \q1 \v 34 moto oyo akokaki kolongola \q2 fimbu ya Nzambe mosika na ngai \q2 mpo ete somo na Ye ebangisa ngai lisusu te, \q1 \v 35 nalingaki kotombola mongongo na ngai \q2 liboso na Ye na kobanga te. \q1 Kasi ndenge ezali sik’oyo, nakokoka te. \b \c 10 \q1 \v 1 Nayini bomoi na ngai ! \q2 Nakokoba kaka komilela, \q1 nakoloba na mongongo makasi \q2 mpe na pasi ya motema na ngai. \q1 \v 2 Nakoloba na Nzambe : ‹ Kokatela ngai etumbu te, \q2 yebisa ngai mabe nini nasali ! › \q1 \v 3 Boni, ozali kosepela konyokola ngai, \q2 kobwaka ekelamu oyo maboko na Yo esali, \q2 mpe kolongisa mabongisi ya bato mabe ? \q1 \v 4 Boni, ozali na miso ya mosuni ? \q2 Ozali komona lokola bato ? \q1 \v 5 Boni, mikolo na Yo ezali lokola mikolo ya bato, \q2 mpe mibu na yo, lokola mibu ya bato, \q1 \v 6 mpo ete oluka mabe na ngai \q2 to okundola masumu na ngai, \q1 \v 7 atako oyebi malamu ete nasali na ngai mabe te, \q2 mpe ete ezali na moto moko te \q2 oyo akoki kokangola ngai na loboko na Yo ? \b \q1 \v 8 Maboko na Yo nde ebongisaki ngai mpe esalaki ngai ; \q2 olingi sik’oyo kobenda nzoto mpe koboma ngai ? \q1 \v 9 Kanisa ete Yo moko nde obongisaki ngai \q2 lokola mabele ya bikeko ; \q2 olingi sik’oyo kozongisa ngai na putulu ? \q1 \v 10 Osopaki ngai lokola miliki te ? \q2 Okangisaki ngai mbuma-mbuma te lokola fromage ? \q1 \v 11 Olatisaki ngai poso ya nzoto mpe misuni te ? \q2 Otongaki mikuwa mpe misisa na ngai te ? \q1 \v 12 Opesaki ngai bomoi mpe otalisaki ngai bolamu ; \q2 mpe na bonzambe na Yo, obatelaki molimo na ngai. \b \q1 \v 13 Kasi tala likambo oyo obombaki kati na motema na Yo, \q2 mpe nayebi ete ezalaka kati na makanisi na Yo. \q1 \v 14 Soki nasalaki masumu, olingaki komona ngai, \q2 mpe olingaki te kozanga kopesa ngai etumbu \q2 mpo na masumu na ngai. \q1 \v 15 Soki nazali na ngambo, wana mawa na ngai ! \q2 Ata nasali mabe te, nazali kokoka te kotombola moto, \q1 pamba te natondisami na soni \q2 mpe nazindi kati na pasi na ngai. \q1 \v 16 Soki nameki kotombola moto, \q2 ozali kolanda ngai lokola nkosi \q1 mpe ozali kobimisela ngai mayele na Yo nyonso \q2 mpo na kotelemela ngai, \q1 \v 17 ozali komemela ngai batatoli ya sika \q2 mpo na kotelemela ngai, \q1 ozali kopelisela ngai kanda na Yo \q2 mpo na kosala ngai mabe, \q2 mampinga na Yo bazali tango nyonso koya kobundisa ngai. \b \q1 \v 18 Mpo na nini obimisaki ngai \q2 na libumu ya mama na ngai ? \q1 Nalingaki na ngai kokufa, \q2 mpe liso moko te elingaki komona ngai. \q1 \v 19 Soki kutu nazalaka na ngai te, \q2 nalingaki koleka kaka mbala moko \q2 longwa na libumu ya mama kino na kunda. \q1 \v 20 Boni, mwa ndambo ya mikolo na ngai esili te ? \q2 Kende ata mosika na ngai \q2 mpo ete nazwa ata tango ya kosepela \q1 \v 21 liboso ete nakende na esika oyo bato bazongaka lisusu te, \q2 na mokili ya molili, mokili ya kufa, \q1 \v 22 na mokili ya molili makasi, ya kufa mpe ya mobulu, \q2 epai wapi ata pole ezalaka molili. » \c 11 \s1 Maloba ya Tsofari \p \v 1 Tsofari, moto ya engumba ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki : \q1 \v 2 « Boni, maloba oyo nyonso ekoki solo kozanga eyano ? \q2 Moto oyo azali koloba alonga na ye, \q2 kaka mpo ayebi koloba ? \q1 \v 3 Bato bavanda kaka nye likolo ya maloba na yo ya pamba \q2 oyo ozali kobimisa ? \q2 Bapamela yo te soki ozali kosala maseki ? \q1 \v 4 Ozali koloba na Nzambe : \q2 ‹ Makambo oyo nazali koloba ezali ya solo ; \q2 nazali sembo na miso na Yo. › \q1 \v 5 Oh, tala ndenge nini nazali na posa \q2 ete Nzambe aloba, \q2 ete afungola monoko na Ye mpo na kopamela yo, \q1 \v 6 mpe asosolisa yo basekele ya bwanya, \q2 pamba te bwanya ya solo ezalaka na bilongi mibale. \q1 Yeba likambo oyo : \q2 Nzambe abosana masumu na yo ebele. \b \q1 \v 7 Okoki penza kososola mabombami ya Nzambe ? \q2 Okoki solo kososola bandelo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ? \q1 \v 8 Bandelo yango eleki Lola na likolo ; \q2 yo penza okosala nini ? \q1 Eleki mboka ya bakufi na bozindo ; \q2 yo penza okoyeba nini ? \q1 \v 9 Molayi ya bandelo yango eleki mokili na molayi, \q2 mpe eleki ebale monene na kopanzana. \b \q1 \v 10 Soki akotisi yo na boloko \q2 mpe asangisi basambisi mpo na kokata likambo, \q2 nani akotelemela Ye ? \q1 \v 11 Solo, ayebaka bakosi \q2 mpe asosolaka mabe na pete. \q1 \v 12 Ndenge mwana ya ane ya zamba ebotaka moto te, \q2 ndenge mpe kizengi akokoka te kokoma mayele. \b \q1 \v 13 Nzokande, soki opesi Ye motema na yo \q2 mpe osemboli maboko na yo epai na Ye, \q1 \v 14 soki olongoli lisumu oyo ezali na loboko na yo \q2 mpe opekisi mabe kovanda kati na ndako na yo, \q1 \v 15 okotombola elongi na yo na soni te, \q2 okotelema ngwi mpe okobanga eloko te ; \q1 \v 16 pamba te okobosana pasi na yo, \q2 okokoma kokanisa yango kaka \q2 lokola mayi oyo esili kotiola. \q1 \v 17 Bomoi na yo ekongenga \q2 lokola pole ya moyi oyo engengaka na midi, \q2 mpe butu na yo ekokoma lokola tongo. \q1 \v 18 Okozala na kimia, pamba te elikya ezali, \q2 okotala zingazinga na yo mpe okozwa bopemi na yo na kimia, \q1 \v 19 okolala pongi, mpe okomona moto moko te \q2 kobangisa yo lisusu, \q2 mpe bato ebele bakoya kosenga ngolu na yo. \q1 \v 20 Kasi miso ya bato mabe ekokufa, \q2 mpe bakozanga ekimelo, \q2 bakotikala na elikya se moko : kufa. » \c 12 \s1 Eyano na Yobo epai ya Tsofari \p \v 1 Yobo azongisaki : \q1 \v 2 « Solo, bozali penza bato ; \q2 tango bokokufa, bwanya mpe ekokufa elongo na bino ! \q1 \v 3 Kasi atako bongo, ngai mpe nazali mayele lokola bino, \q2 boleki ngai na eloko te. \q2 Nani ayebi te makambo wana nyonso ? \b \q1 \v 4 Nakomi eloko ya kotiola na miso ya baninga na ngai, \q2 ngai oyo nazali kobelela Nzambe mpo ete ayanola ngai ; \q1 moto ya sembo, moto ya alima, \q2 ye nde akomi eloko ya kotiola ! \q1 \v 5 Bato ya esengo basekaka bato oyo bazali na pasi, \q2 babetaka bato oyo batepaka-tepaka kisambeti. \q1 \v 6 Bandako ya bato ya mobulu ezalaka na kimia, \q2 mpe bato oyo batombokelaka Nzambe, \q1 oyo bamonaka makasi na bango lokola Nzambe, \q2 bango nde babatelamaka. \b \q1 \v 7 Kasi tuna nyama ya zamba, ekoteya yo ; \q2 tuna ndeke ya likolo, ekolakisa yo ; \q1 \v 8 loba na mabele, ekoteya yo ; \q2 to tika ete mbisi ya ebale monene epesa yo sango. \q1 \v 9 Kati na yango, ekelamu nini \q2 eyebi te ete loboko ya Yawe nde esalaki nyonso wana ? \q1 \v 10 Bomoi ya bikelamu nyonso mpe pema ya bato nyonso \q2 ezali kati na loboko na Ye. \q1 \v 11 Boni, litoyi emekaka maloba te \q2 ndenge lolemo emekaka bilei ? \q1 \v 12 Bwanya ezalaka kati na bampaka te ? \q2 Bomoi ya molayi epesaka mayele te ? \b \q1 \v 13 Bwanya mpe makasi ezali epai ya Nzambe, \q2 toli mpe mayele ezali ya Ye. \q1 \v 14 Bakokoka te kotonga lisusu oyo Ye asili kobebisa, \q2 bakokoka kokangola te moto oyo Ye asili kokanga. \q1 \v 15 Soki akangi mayi, bokawuki ekotaka ; \q2 kasi soki afungoli yango, mokili ezindaka. \q1 \v 16 Makasi mpe elonga ezali ya Ye ; \q2 moto oyo basili kokosa mpe moto oyo akosi, \q2 bango mibale bazali ya Ye. \q1 \v 17 Amemaka bapesi toli na bowumbu \q2 mpe akomisaka basambisi bato ya maboma ; \q1 \v 18 afungolaka minyololo ya bakonzi \q2 mpe akangaka liputa na baloketo na bango ; \q1 \v 19 amemaka Banganga-Nzambe na bowumbu \q2 mpe akweyisaka bato oyo bavanda kala na bokonzi ; \q1 \v 20 akangaka minoko ya bato oyo balobaka malamu, \q2 alongolaka mikolo bososoli ; \q1 \v 21 asopelaka bakonzi soni, \q2 abotolaka bibundeli ya bato ya makasi ; \q1 \v 22 abimisaka na pwasa, makambo ya sekele, \q2 makambo oyo ezali kati na molili, \q2 mpe abimisaka na pole bililingi oyo eleki mwindo ; \q1 \v 23 atombolaka bikolo mpe abebisaka yango, \q2 akomisaka minene mindelo ya bikolo \q2 mpe apanzaka yango ; \q1 \v 24 alongolaka makanisi ya bakonzi ya bikolo \q2 mpe asalaka ete batambola kati na bisobe \q2 oyo ezanga nzela \q1 \v 25 mpo ete batepatepa kati na molili, \q2 na kozanga pole ; \q1 mpe asalaka ete batepatepa \q2 lokola moto alangwe masanga. \b \c 13 \q1 \v 1 Miso na ngai emonaki makambo oyo nyonso, \q2 matoyi na ngai eyokaki yango, \q2 mpe nasosoli yango malamu. \q1 \v 2 Nayebi makambo nyonso oyo bino boyebi, \q2 boleki ngai na eloko moko te. \q1 \v 3 Kasi nalingi nde koloba na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso \q2 mpe kobundela likambo na ngai liboso ya Nzambe. \q1 \v 4 Pamba te bino, bozali kobongisa lokuta, \q2 bozali lokola minganga oyo bayebi mosala malamu te. \q1 \v 5 Soki bovandaki ata kimia, \q2 bolingaki ata komonana bato ya bwanya. \q1 \v 6 Yoka sik’oyo maloba na ngai, \q2 yoka kosamba ya bibebu na ngai. \q1 \v 7 Boni, bozali kokotela Nzambe na nzela ya lokuta \q2 mpe ya maloba ya solo te ? \q1 \v 8 Bolingi kolakisa ete bozali na ngambo na Ye ? \q2 Bolingi kobundela Nzambe ? \q1 \v 9 Bokosepela soki aluki koyeba makanisi ya mitema na bino ? \q2 Bokanisi ete bokoki kokosa Ye ndenge bakosaka bato ? \q1 \v 10 Akopamela bino solo soki amoni ete, na se ya mitema na bino, \q2 boponaka-ponaka bilongi. \q1 \v 11 Boni, bokozala ata na somo ya lokumu na Ye te ? \q2 Kolenga ekokweyela bino te ? \q1 \v 12 Pamba te maloba na bino ekokani na putulu, \q2 mpe makanisi na bino ezali lokola mabele ya bikeko. \b \q1 \v 13 Botika makelele mpe botika ngai naloba ! \q2 Oyo ekoya eya ! \q1 \v 14 Mpo na nini nandima kokufa \q2 mpe nasakanela bomoi na ngai ? \q1 \v 15 Ata soki abomi ngai, nakozala kaka na elikya na Ye, \q2 nakobundela solo nzela na ngai liboso na Ye. \q1 \v 16 Yango kutu nde ekozala lobiko na ngai, \q2 pamba te moto moko te oyo azangi koyeba Nzambe \q2 akoki koya liboso na Ye. \q1 \v 17 Boyoka maloba na ngai malamu ; \q2 tika ete matoyi na bino eyoka malamu \q2 makambo oyo nazali koloba ! \q1 \v 18 Sik’oyo, namibongisi mpo na kobundela likambo na ngai, \q2 nayebi ete nakolonga na kosambisama. \q1 \v 19 Nani akoki kofunda ngai ? \q2 Soki te, nakokanga monoko mpe nakokufa. \b \q1 \v 20 Oh Nzambe, pesa ngai kaka biloko mibale, \q2 mpe nakobombama te liboso na Yo : \q1 \v 21 longola loboko na Yo likolo na ngai, \q2 mpe tika kobangisa ngai na somo na Yo. \q1 \v 22 Bongo benga ngai, mpe nakoyanola ; \q2 to tika ngai naloba, \q2 mpe Yo okoyanola ngai. \q1 \v 23 Mabe mpe masumu boni nasali liboso na Yo ? \q2 Talisa ngai mbeba mpe masumu na ngai. \q1 \v 24 Mpo na nini obombi elongi na Yo \q2 mpe ozali kozwa ngai lokola monguna na Yo ? \q1 \v 25 Olingi kaka kotungisa lokasa \q2 oyo mopepe ezali komema ? \q2 Olingi kaka kolandela lititi oyo ekawuka ? \q1 \v 26 Pamba te okomaka makambo mabe na tina na ngai \q2 mpe okomisi ngai mokitani ya masumu ya bolenge na ngai. \q1 \v 27 Okangi makolo na ngai na minyololo ya bibende, \q2 ozali kokengela malamu lolenge na ngai ya kotambola \q1 mpe kolandela bisika nyonso \q2 oyo natiaka bilembo ya matambe na ngai. \b \q1 \v 28 Moto apola penza boye lokola eloko ya kopola, \q2 lokola elamba oyo balie na banselele ! \b \c 14 \q1 \v 1 Moto oyo abotama na mwasi \q2 azalaka kaka na mikolo moke \q2 oyo mpe etonda na pasi. \q1 \v 2 Akolaka mpe akawukaka lokola fololo, \q2 awumelaka te lokola elili ya lipata oyo elekaka. \q1 \v 3 Olingi kaka kolandela ekelamu ya boye ? \q2 Olingi kaka komema ye liboso na Yo \q2 mpo na kosambisa ye ? \q1 \v 4 Nani akoki kobimisa bopeto kati na mbindo ? \q2 Moko te ! \q1 \v 5 Mikolo ya moto ekatama ; \q2 okata motango ya basanza na ye \q2 mpe otia mondelo oyo akoki koleka te. \q1 \v 6 Longola miso na Yo mosika na ye \q2 mpe tika ye, ye moko, \q1 kino tango akozwa lifuti ya mosala na ye \q2 lokola moto oyo asalaka kaka mpo na lifuti. \b \q1 \v 7 Nzete ezalaka kutu na mwa elikya : \q2 ata bakati yango, ebimaka lisusu \q2 mpe ebotaka bitape ya sika ; \q1 \v 8 misisa na yango ekoki konuna na se ya mabele, \q2 mpe eteni na yango oyo etikalaka ekoki kokufa kati na mabele, \q1 \v 9 nzokande soki kaka ezwi mayi, ekobimisa mito \q2 mpe ekobota bitape lokola nzete ya sika. \q1 \v 10 Kasi moto akufaka mpe aninganaka lisusu te, \q2 akataka motema mpe azalaka lisusu na bomoi te. \q1 \v 11 Ndenge mayi esilaka na liziba \q2 to ndenge mayi ekawukaka, \q1 \v 12 ndenge wana mpe moto akufaka mpe atelemaka lisusu te, \q2 akolamuka lisusu te mpe bakoki lisusu kolamusa ye te, \q2 tango nyonso likolo ekozala. \b \q1 \v 13 Soki kaka obombaki ngai na se ya bakufi \q2 mpe otikaki ngai kuna kino kanda na Yo esila ! \q1 Soki kaka okatelaki ngai tango \q2 mpo ete, na sima na yango, okanisa ngai lisusu ! \q1 \v 14 Nzokande, soki moto akufi, boni, akoki lisusu \q2 kozala na bomoi ? \q2 Nakozela kino lolenge na ngai ebongwana. \q1 \v 15 Okobenga ngai, mpe ngai, nakondima ; \q2 okozala na posa makasi ya ekelamu ya maboko na Yo. \q1 \v 16 Solo penza, okotanga makolo na ngai, \q2 kasi okolandela lisusu masumu na ngai te. \q1 \v 17 Mabe na ngai ekokangama kati na saki, \q2 mpe okozipa masumu na ngai. \b \q1 \v 18 Kasi, ndenge ngomba esilaka mpe ekweyaka, \q2 ndenge libanga elongwaka na esika na yango, \q1 \v 19 ndenge mayi eliaka mabanga, \q2 ndenge mayi oyo etiolaka ememaka mabele, \q2 ndenge wana mpe obebisaka elikya ya moto. \q1 \v 20 Olongaka ye mbala moko, mpe akendaka na ye ; \q2 obebisaka elongi na ye mpe obenganaka ye. \q1 \v 21 Soki bana na ye ya mibali bazwi lokumu, \q2 ayebaka na ye yango te ; \q2 soki basambwisi bango, amonaka na ye yango te. \q1 \v 22 Ayokaka kaka pasi kati na nzoto na ye, \q2 mpe motema na ye esalaka kaka matanga mpo na ye moko. » \c 15 \s1 Maloba ya Elifazi : moto mabe azwaka etumbu \p \v 1 Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki : \q1 \v 2 « Boni, moto ya bwanya akopesaka solo eyano \q2 na maloba ya pamba boye, maloba oyo ezanga ata tina, \q1 to alingaka kotondisa libumu na ye na mopepe ya moto \q2 oyo ewutaka na Este ? \q1 \v 3 Akoki solo komilobela na maloba ezanga ata tina ? \q2 Akoki solo kosalela maloba milayi \q2 oyo ezali ata na motuya te ? \q1 \v 4 Yo ozali penza kobebisa lokumu ya Nzambe \q2 okomi koboya lokumu liboso ya Nzambe. \q1 \v 5 Lisumu na yo ezali kokamba monoko na yo, \q2 ozwi elobeli ya bakosi. \q1 \v 6 Monoko na yo moko nde ezali komemela yo etumbu, \q2 kasi monoko na ngai te ; \q2 bibebu na yo moko nde ezali kofunda yo. \b \q1 \v 7 Yo nde moto ya liboso oyo obotama kati na bato ? \q2 Omona moyi liboso ya bangomba mikuse ? \q1 \v 8 Osila koyoka makambo oyo elobamaka \q2 kati na Likita ya Nzambe ? \q2 Bwanya ezalaka kaka epai na yo moko ? \q1 \v 9 Makambo nini oyebi, oyo biso toyebi te ? \q2 Boyebi nini ozali na yango, oyo biso tozali na yango te ? \q1 \v 10 Na ngambo na biso, ezali na bato ya suki pembe, bampaka, \q2 bato oyo baleki tata na yo na mibu ya mbotama. \q1 \v 11 Kobondisama ya Nzambe mpe maloba ya kimia \q2 oyo bazali koloba mpo na yo, \q2 ekoki te mpo na yo ? \q1 \v 12 Mpo na nini motema na yo ezali kopengwisa yo, \q2 mpe miso na yo ezali kobeta-beta ? \q1 \v 13 Mpo ete obwakela Nzambe kanda na yo \q2 mpe obimisa makambo ya boye na monoko na yo ? \b \q1 \v 14 Moto azali nani mpo ete azala peto ? \q2 Ye oyo abotami na mwasi azali nani mpo ete azala sembo ? \q1 \v 15 Soki Nkolo azali kondimela basantu na Ye te, \q2 soki kutu likolo ezali peto te na miso na Ye, \q1 \v 16 ekozala boni mpo na moto mabe, moto oyo abeba, \q2 oyo asalaka mabe lokola azali komela mayi ? \b \q1 \v 17 Yoka ngai, mpe nakolimbolela yo ! \q2 Tika ete nayebisa yo makambo oyo ngai namona, \q1 \v 18 makambo oyo bato ya bwanya balobaki, \q2 na kobomba ata eloko moko te kati na makambo \q2 oyo bazwaki epai ya batata na bango. \q1 \v 19 Apesaki mokili epai na bango kaka \q2 tango ata mopaya moko te alekaki kati na bango. \q1 \v 20 Na bomoi na ye mobimba, \q2 na mibu oyo bakata mpo na bomoi na ye, \q2 moto mabe anyokwamaka. \q1 \v 21 Lokito ya somo etondisaka matoyi na ye, \q2 bato ya mobulu babimelaka ye ata na tango ya kimia. \q1 \v 22 Azalaka na elikya te ya kobima na molili, \q2 mpe mopanga ezelaka ye. \q1 \v 23 Ayengaka-yengaka mpo na koluka lipa, \q2 kasi akozwela yango wapi ? \q2 Ayebaka ete mokolo ya molili ezelaka ye. \q1 \v 24 Pasi mpe mawa ebangisaka ye, \q2 ekomelaka ye lokola mokonzi \q2 oyo amibongisi mpo na bitumba, \q1 \v 25 mpo ete asembolaka loboko na ye \q2 mpo na kobundisa Nzambe, \q2 atelemelaka Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, \q1 \v 26 akimaka epai na Ye, moto etala na se, \q2 amibombaka na sima ya banguba minene. \b \q1 \v 27 Elongi na ye ekotonda mafuta, \q2 loketo na ye ekokoma monene ; \q1 \v 28 akovanda na engumba ebeba, \q2 kati na bandako oyo bato bakima, \q2 bandako oyo ekoma pene ya kokweya ; \q1 \v 29 akotikala kokoma mozwi te, \q2 pamba te bozwi na ye ekowumela te, \q2 bomengo na ye ekopanzana te kati na mokili mobimba ; \q1 \v 30 akokoka kokima molili te, \q2 moto ekokawusa mandalala na ye \q2 mpe akokima ata pema na ye moko. \b \q1 \v 31 Tika ete atia elikya na ye na lokuta te, \q2 pamba te akoyokisama soni \q2 mpe akozwa libebi lokola lifuti. \q1 \v 32 Ekokokisama liboso ete akufa, \q2 ndenge lindalala ekawukaka \q2 mpo na kozanga mayi na yango \q1 \v 33 to lokola nzete ya vino oyo ekweyisi bambuma na yango, \q2 wana ezali nanu mobesu \q2 to lokola nzete ya olive oyo ekweyisi fololo na yango. \q1 \v 34 Solo, libota ya moto mabe ekofuluka te, \q2 mpe moto ekozikisa ndako na ye mpo na mabe na ye moko. \q1 \v 35 Pamba te moto nyonso oyo azalaka \q2 na makanisi mabe kati na ye \q2 abotaka kaka pasi ; \q1 mabe oyo ekolaka kati na ye \q2 ememelaka ye moko libebi. » \c 16 \s1 Eyano ya Yobo epai ya Elifazi \p \v 1 Yobo azongisaki : \q1 \v 2 « Nayoki maloba ebele ya lolenge oyo ; \q2 bino nyonso bozali babondisi mabe. \q1 \v 3 Kino tango nini bokotika koloba \q2 maloba ya pamba-pamba boye ? \q2 Likambo nini etindi yo lisusu kozongela maloba ? \q1 \v 4 Ngai mpe nakokaki koloba lokola bino, \q2 soki bozalaki na esika na ngai, \q1 nakokaki kobimisa maloba ebele \q2 mpe koningisa moto mpo na bino. \q1 \v 5 Kasi monoko na ngai elingaki kolendisa bino, \q2 mpe bibebu na ngai elingaki koningana \q2 mpo na kokitisa bino mitema kati na pasi. \b \q1 \v 6 Nzokande, soki nalobi, pasi na ngai ekosila te ; \q2 bongo soki nakangi monoko nde pasi yango \q2 elongwe na bomoi na ngai ? \q1 \v 7 Oh Nzambe ! Solo penza, olembisi ngai ! \q2 Obebisi ndako na ngai nyonso, \q1 \v 8 ofini-fini ngai makasi penza, \q2 mpe kokonda na ngai ekomi ata kotatola \q2 mpe kofunda ngai na miso ya bato ! \q1 \v 9 Kanda na Yo ezali kopasola mpe kobundisa ngai, \q2 okomi ata kolia minu mpo na kosala ngai mabe \q1 mpe kotala ngai na miso mabe \q2 lokola nde nazali monguna na yo. \q1 \v 10 Bato mabe bafungoli minoko mpo na kotiola ngai, \q2 bakomi kobeta ngai bambata na matama \q1 mpo na kosambwisa ngai, \q2 bango nyonso basaleli ngai likita. \q1 \v 11 Nzambe akabi ngai na maboko ya bato mabe \q2 mpe abwaki ngai na manzaka na bango. \q1 \v 12 Makambo nyonso ezalaki kotambola malamu mpo na ngai, \q2 kasi aningisi ngai, akangi ngai na kingo mpe apanzi ngai, \q2 akomisi ngai lokola eloko na Ye ya komekela makonga ; \q1 \v 13 makonga na Ye ezingeli ngai, \q2 atoboli-toboli libumu na ngai, \q2 mpe na mawa te, asopi makila na ngai na mabele. \q1 \v 14 Tango nyonso, azali kaka kozokisa ngai \q2 mpe kokweya likolo na ngai lokola elombe. \b \q1 \v 15 Natongi elamba na ngai ya saki na poso ya nzoto na ngai \q2 mpe nakundi lokumu na ngai nyonso na se ya putulu. \q1 \v 16 Likolo ya kolela, elongi na ngai ekomi motane, \q2 mpe molili ezingeli miso na ngai. \q1 \v 17 Nzokande, maboko na ngai etikala kosala moto mabe te, \q2 mpe libondeli na ngai ezalaki kosalema na motema peto. \b \q1 \v 18 Oh mabele, kozipa makila na ngai te ! \q2 Kotika te ete koganga na ngai ezwa tango ya kopema ! \q1 \v 19 Wuta sik’oyo, motatoli na ngai azali na Likolo, \q2 molobeli na ngai azali na Lola. \q1 \v 20 Baninga na ngai bakomi koseka ngai ; \q2 nazali nde kolela epai ya Nzambe na mpinzoli. \q1 \v 21 Boni, ezali solo na molobeli oyo akoki kolobela \q2 moto liboso ya Nzambe \q2 ndenge moto alobelaka moninga na ye ? \b \q1 \v 22 Solo, motango ya mibu na ngai ekomi pene ya kosila, \q2 mpe nakokende na ngai na nzela \q2 oyo bato bazongaka lisusu te. \c 17 \q1 \v 1 Pema na ngai ekomi pene ya kosila, \q2 mikolo na ngai etikali ya kotanga, \q2 kunda ezali kozela ngai. \q1 \v 2 Solo, batioli bazingeli ngai, \q2 miso na ngai ezali komona kotiola na bango. \b \q1 \v 3 Oh Nzambe, mipesa ata Yo moko lokola ndanga, \q2 na esika na ngai, epai na Yo ; \q1 soki te, nani mosusu akoki komipesa \q2 lokola ndanga mpo na ngai ! \q1 \v 4 Okangi boyebi na bango mpo ete basosola te ; \q2 yango wana, okolongisa bango te. \q1 \v 5 Moto oyo akofunda balingami na ye \q2 mpo ete babotola bomengo na bango na makasi, \q2 bana na ye bakokufa miso. \b \q1 \v 6 Nzambe akomisi ngai lokola lisapo kati na minoko ya bato, \q2 lokola moto oyo babwakelaka soyi na elongi. \q1 \v 7 Miso na ngai ekomi molili likolo ya pasi, \q2 mpe nzoto na ngai nyonso ekomi lokola elilingi. \q1 \v 8 Bato ya sembo bazali kokamwa likambo yango, \q2 mpe moto oyo ayebi na ye likambo te \q2 atelemeli moto mabe. \q1 \v 9 Nzokande, bato ya sembo bakangamaka na nzela na bango, \q2 mpe bato ya maboko peto bakomaka lisusu makasi koleka. \b \q1 \v 10 Bino nyonso, boya mpe bomeka lisusu ! \q2 Nakomona ata moto moko te ya bwanya kati na bino. \q1 \v 11 Mikolo na ngai ekomi pene ya kosila ; \q2 mabongisi na ngai mpe baposa ya motema na ngai, \q2 nyonso, esili kobeba. \q1 \v 12 Bato oyo bazali komona butu lokola moyi \q2 bazali koloba kati na molili : ‹ Pole ekomi pene, › \q2 nzokande molili ezali makasi. \q1 \v 13 Soki ezali na ndako moko kaka oyo nazali kotiela elikya, \q2 ezali nde kunda ; \q1 soki mpe nakotandaka mbeto na ngai, \q2 ezali nde kati na mboka ya bakufi. \q1 \v 14 Soki nalobi na kunda : ‹ Ozali tata na ngai, › \q2 mpe na mutsopi : ‹ Ozali mama na ngai \q2 to ndeko na ngai ya mwasi, › \q1 \v 15 wana elikya na ngai ezali penza wapi, \q2 mpe nani penza azali komona elikya na ngai ? \q1 \v 16 Ekokita kino na bikuke ya kufa \q2 tango tokokende elongo kopema kati na putulu. » \c 18 \s1 Maloba ya mibale ya Bilidadi \p \v 1 Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki : \q1 \v 2 « Kino tango nini okoloba maloba ya boye ? \q2 Kanisa nanu malamu, bongo tokosolola. \q1 \v 3 Mpo na nini komona biso lokola banyama ? \q2 Boni, tozali nde bazoba na miso na yo ? \q1 \v 4 Awa, likolo ya kanda na yo, ozali komipasola na biteni, \q2 basundola mokili to balongola mabanga \q2 na bisika na yango likolo na yo ? \b \q1 \v 5 Solo, mwinda ya moto mabe ekufaka, \q2 moto na yango etikaka kopela. \q1 \v 6 Pole ekomaka molili kati na ndako na ye, \q2 mpe mwinda oyo epelaka pembeni na ye ekufaka. \q1 \v 7 Makasi ya matambe na ye esilaka, \q2 makanisi na ye moko ekweyisaka ye. \q1 \v 8 Makolo na ye ekangisaka ye na monyama, \q2 bongo abundaka-bundaka kati na madusu na yango. \q1 \v 9 Motambo ekangaka matambe na ye, \q2 mpe singa na yango ekangaka ye makasi. \q1 \v 10 Singa ya motambo ebombama na se ya mabele mpo na ye, \q2 mpe batia motambo na nzela na ye. \q1 \v 11 Somo elandaka ye bisika nyonso \q2 oyo atambolaka. \q1 \v 12 Nzala esilisaka makasi na ye, \q2 mpe pasi ya ndenge na ndenge \q2 ezalaka pembeni na ye soki akweyi. \q1 \v 13 Pasi eliaka poso ya nzoto na ye \q2 mpe bokono oyo ebomaka ebebisaka biteni ya nzoto na ye. \q1 \v 14 Balongolaka kati na ndako na ye \q2 biloko nyonso ya motuya, oyo atielaka motema, \q2 mpe akendaka kokutana na bakonzi ya kufa. \q1 \v 15 Ndako na ye etikalaka na eloko moko te, \q2 mpe fofolo\f + \fr 18.15 \fr*\ft Basalelaka fofolo mpo na kopelisa moto makasi.\ft*\f* ezalaka ya kopanzana kati na ndako yango. \q1 \v 16 Misisa na ye ekawukaka na se ya mabele, \q2 mpe, na likolo, bitape na ye elembaka. \q1 \v 17 Bakanisaka ye lisusu te na mokili, \q2 kombo na ye etangamaka lisusu te na mabele. \q1 \v 18 Babenganaka ye na pole mpo ete akende na molili, \q2 mpe balongolaka ye na mokili. \q1 \v 19 Azalaka na bana to bakitani te kati na bato na ye, \q2 azalaka ata na moto moko te oyo atikala na bomoi, \q2 na esika oyo avandaka. \q1 \v 20 Bato ya weste bazalaka na somo ya kotala bomoi na ye, \q2 mpe bato ya este batondaka na kobanga. \q1 \v 21 Tala, solo, ndenge suka ya moto mabe ezalaka, \q2 mpe bomoi ya moto oyo ayebi Nzambe te. » \c 19 \s1 Eyano ya Yobo epai ya Bilidadi \p \v 1 Yobo azongisaki : \q1 \v 2 « Kino tango nini bokotungisa ngai \q2 mpe kolembisa ngai na maloba na bino ? \q1 \v 3 Tala, botioli ngai mbala zomi, \q2 mpe bozali kobundisa ngai na soni te. \q1 \v 4 Soki ezali penza ya solo ete nabungi nzela, \q2 mbeba na ngai etali kaka ngai moko. \q1 \v 5 Soki mpe bolingi komimona likolo na ngai \q2 mpe kosalela pasi na ngai mpo na kotiola ngai, \q1 \v 6 wana boyeba ete Nzambe nde asali ngai mabe \q2 mpe azingeli ngai na monyama na Ye. \b \q1 \v 7 Atako nagangi ete basali ngai mabe, \q2 nazali kozwa ata eyano moko te ; \q1 ata soki nabeleli ete basunga ngai, \q2 moto oyo akokata likambo azali te. \q1 \v 8 Akangi nzela na ngai mpo ete nakoka koleka te, \q2 atondisi nzela na ngai nyonso na molili, \q1 \v 9 alongoli ngai lokumu, \q2 mpe alongoli motole na moto na ngai, \q1 \v 10 asasi-sasi ngai na bangambo nyonso \q2 kino nakomi pene ya kokufa, \q2 apikoli elikya na ngai ndenge bapikolaka nzete ; \q1 \v 11 kanda na Ye ezali kotumba ngai, \q2 mpe azali kotanga ngai na molongo ya banguna na Ye ; \q1 \v 12 mampinga na Ye ezali kopusana na makasi penza, \q2 ezingeli ngai mpe ndako na ngai \q2 mpo na kosala ngai mabe. \b \q1 \v 13 Akaboli ngai na bandeko na ngai, \q2 bongo bato oyo bayebi ngai bapesi ngai mokongo, \q1 \v 14 balingami na ngai balimwe, \q2 mpe baninga na ngai babosani ngai ; \q1 \v 15 bato oyo nayambaki na ndako na ngai \q2 mpe basali na ngai ya basi, \q1 bango nyonso bakomi kotala ngai lokola mopaya, \q2 bakomi komona ngai lokola moto oyo batikala koyeba te. \q1 \v 16 Nazali kobenga mosali na ngai, \q2 kasi azali ata koyanola ngai te, \q2 atako monoko na ngai moko nde ezali kobondela ye. \q1 \v 17 Solo ya monoko na ngai ekomi kokimisa \q2 ata mwasi na ngai, \q2 bongo bandeko na ngai moko penza bayini ngai. \q1 \v 18 Ata bilenge mibali ya mike bakomi koseka ngai ; \q2 soki kaka nabimi, bakomi kosambwisa ngai. \q1 \v 19 Balingami na ngai nyonso ya motema bayini ngai, \q2 bato oyo nazalaki kolinga babalukeli ngai ; \q1 \v 20 nakomi eloko pamba, \q2 natikali kaka poso ya nzoto mpe mikuwa, \q2 nazali kobika kaka na misuni ya minu na ngai. \b \q1 \v 21 Balingami na ngai, boyokela ngai mawa, \q2 nabondeli bino penza, boyokela ngai mawa, \q2 pamba te loboko ya Nzambe ebeti ngai. \q1 \v 22 Mpo na nini bozali kolandela ngai boye, \q2 ndenge kaka Nzambe azali kolandela ngai ? \q2 Botondi mosuni na ngai te ? \b \q1 \v 23 Ah, soki ata maloba na ngai ekomamaki, \q2 soki ekomamaki na buku ! \q1 \v 24 Elingaki kokomama na ekomeli ya ebende, \q2 ya ebende oyo ya songe penza, \q1 mpo na kotobola makomi yango na mabanga \q2 mpo ete etikala wana mpo na libela. \q1 \v 25 Ngai, nayebi na ngai malamu \q2 ete Mosikoli na ngai azali na bomoi, \q1 mpe, awa na mokili, akotelema ya suka \q2 mpo na kokata likambo na ngai. \q1 \v 26 Sima na kobebisama ya poso ya nzoto na ngai, \q2 ngai, na nzoto na ngai, nakomona Nzambe. \q1 \v 27 Solo, nakomona Ye, \q2 miso na ngai moko ekomona Ye, \q2 ngai moko penza, moto mosusu te. \b \q1 \v 28 Bino oyo bozali koloba : ‹ Tokolanda ye ndenge nini ? › \q2 Mpe bino bato oyo bomoni mabe kati na ngai, \q1 \v 29 bolenga bino moko liboso ya mopanga, \q2 pamba te mopanga ezali esalelo ya kanda mpo na masumu, \q2 mpe bokoyeba ete kosambisama ezali. » \c 20 \s1 Maloba ya mibale ya Tsofari \p \v 1 Tsofari, moto ya Naama, azwaki maloba mpe alobaki : \q1 \v 2 « Makanisi na ngai ezali kotinda ngai ete nayanola, \q2 nakoki kovanda nye te, \q2 pamba te motema na ngai ekomi likolo-likolo. \b \q1 \v 3 Nazali koyoka maloba mabe, \q2 maloba oyo eyokisi ngai soni ! \q2 Kasi mayele na ngai elakisi ngai maloba ya kozongisa. \q1 \v 4 Solo, oyebi malamu ete wuta kala, \q2 wuta tango batia moto na likolo ya mabele, \q1 \v 5 elonga ya bato mabe ezalaka ya tango moke, \q2 mpe esengo ya moto oyo azangi boyengebene \q2 ewumelaka kaka mwa tango moke. \q1 \v 6 Ata molayi na ye emati kino likolo \q2 mpe moto na ye etuti mapata, \q1 \v 7 akobebisama libela lokola nyei na ye, \q2 mpe bato oyo bakomona ye bakoloba : ‹ Azali wapi ? › \q1 \v 8 Abungaka lokola ndoto, mpe bakomona ye lisusu te, \q2 alimwaka lokola na ndoto ya butu. \q1 \v 9 Liso oyo ezalaki kotala ye ekomona ye lisusu te, \q2 esika oyo azalaki kovanda ekomona ye lisusu te, \q1 \v 10 bana na ye basengeli kofuta lomande epai ya babola, \q2 maboko na ye ekozongisa bozwi oyo abotolaki, \q1 \v 11 mikuwa na ye oyo ezalaki makasi na bolenge \q2 ekolala elongo na ye kati na putulu. \b \q1 \v 12 Soki mabe ezali sukali na monoko na ye \q2 mpe abombi yango na se ya lolemo na ye, \q1 \v 13 soki ameki elengi na yango mpe atiki yango te, \q2 soki abombi yango na se ya minu na ye, \q1 \v 14 bilei na ye ekobongwana kati na libumu na ye, \q2 ekokoma lokola ngenge ya nyoka kati na ye. \q1 \v 15 Amelaki na pamba bozwi ebele, asengeli kosanza yango ; \q2 Nzambe akofutisa ye yango. \q1 \v 16 Akofiba ngenge ya nyoka, \q2 lolemo ya etupa ekoboma ye. \q1 \v 17 Akomona lisusu te mayi mike, miluka, bibale, \q2 mayi oyo etiolaka makasi elongo na mafuta ya nzoyi mpe miliki ; \q1 \v 18 akozongisa bambuma ya mosala na ye mobimba, \q2 akomela ata moko te, \q1 akotikala kosepela te na litomba \q2 oyo azwaki na mombongo na ye. \q1 \v 19 Pamba te anyokolaki babola \q2 mpe atikaki bango lokola bato bazangela, \q1 abotolaki ndako ya bato \q2 na esika ya kotonga ndako na ye moko. \b \q1 \v 20 Solo, lokoso na ye ya kozwa mingi ekosila te, \q2 akoki komibikisa te na nzela ya bomengo na ye. \q1 \v 21 Ayebaki te kopekisa lokoso ya libumu na ye, \q2 yango wana bomengo na ye mpe ekowumela te. \q1 \v 22 Wana azali kati na bomengo, pasi ekokomela ye, \q2 kilo nyonso ya pasi ekokweyela ye. \q1 \v 23 Wana azali kotondisa libumu na ye, \q2 Nzambe akosopela ye kanda makasi na Ye, \q2 mpe ekonokela ye lokola bilei. \q1 \v 24 Ata akimi liboso ya ebundeli ya ebende, \q2 mbanzi ya bronze ekotobola ye ; \q1 \v 25 soki abimisi songe ya mbanzi yango na libale na ye \q2 elongo na makila ya mbuma-mbuma, \q2 somo ekoyela ye. \q1 \v 26 Molili makasi ezali kozela libula na ye, \q2 moto makasi oyo moto apelisi te ekozikisa ye \q2 elongo na biloko oyo ekotikala kati na ndako na ye. \q1 \v 27 Likolo ekobimisa polele mabe na ye, \q2 mabele ekotelemela ye ; \q1 \v 28 mayi ekomema ndako na ye \q2 mpe biloko nyonso ya ndako na ye, \q2 na mokolo ya kanda ya Nzambe. \q1 \v 29 Yango nde lifuti oyo Nzambe abongisi \q2 mpo na moto mabe, \q2 libula oyo Nzambe alaki ye. » \c 21 \s1 Eyano ya Yobo epai ya Tsofari \p \v 1 Yobo azongisaki : \q1 \v 2 « Yoka na bokebi maloba na ngai, \q2 mpe tika ete yango ezala kobondisama mpo na ngai. \q1 \v 3 Bokanga nanu mitema, wana nazali koloba ; \q2 soki nasilisi koloba nde bokoba na bino koseka ngai. \b \q1 \v 4 Boni, nazali kolela epai ya moto ? \q2 Ndenge nini nalemba te kokanga motema ? \q1 \v 5 Botala ngai, bokokamwa, \q2 bokozanga ata likambo ya koloba. \q1 \v 6 Soki kaka nakanisi yango, nabangi, \q2 mpe nzoto na ngai ekomi kolenga na somo. \b \q1 \v 7 Mpo na nini bato mabe bazali kowumela na bomoi ? \q2 Mpo na nini bakomaka mibange \q2 mpe babakisaka nguya na bango ? \q1 \v 8 Bana na bango bazali kolendisama pembeni na bango, \q2 mpe bakitani na bango bazali kofuluka na miso na bango. \q1 \v 9 Bandako na bango ebatelami mpe ezangi kobanga, \q2 fimbu na Nzambe ezali likolo na bango te. \q1 \v 10 Bangombe na bango ya mibali elembaka te kobotisa, \q2 bangombe na bango ya basi ebotaka kaka \q2 mpe esopaka zemi te. \q1 \v 11 Lokola kati na etonga ya bameme, \q2 bazali kotika bana na bango : bamoko kokima-kima, \q2 mpe bamosusu kosakana. \q1 \v 12 Bazali kobeta mbonda mpe lindanda, \q2 bazali kosepela na lokito ya flite ; \q1 \v 13 bazali kolekisa mikolo na bango na bomengo, \q2 mpe bazali kokende na mboka ya bakufi na kimia. \b \q1 \v 14 Nzokande, balobaka na Nzambe : ‹ Longwa mosika na biso ! \q2 Tozali na posa te ya koyeba nzela na yo. \q1 \v 15 Nkolo-Na-Nguya-Nyonso nde nani \q2 mpo ete tosalela ye ? \q2 Tokozwa litomba nini na kosambela ye ? › \q1 \v 16 Boni, bozwi na bango ezali \q2 kati na maboko na bango moko te ? \q2 Kasi mosika na ngai, likanisi ya kolanda toli ya bato mabe ! \b \q1 \v 17 Mbala boni bazali koboma mwinda ya bato mabe ? \q2 Mbala boni pasi ezali kokitela bango ? \q2 Boni, Nzambe abombeli bango kanda na Ye ? \q1 \v 18 Mokolo nini mopepe makasi ekomema bango \q2 lokola makasa to matiti ya kokawuka ? \q1 \v 19 Balobaka : ‹ Nzambe apesaka etumbu ya moto mabe \q2 epai ya bana na ye. › \q1 Tika ete apesa etumbu yango epai na ye moko moto mabe, \q2 mpo ete ayeba yango ! \q1 \v 20 Tika ete miso na ye moko emona kobebisama na ye, \q2 mpe amela kopo ya kanda ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. \q1 \v 21 Pasi ya libota oyo etikali sima na ye ekosala ye nini \q2 tango basanza oyo bakatela ye ekomi na suka ? \b \q1 \v 22 Bakoki solo koyekolisa Nzambe mayele, \q2 Ye oyo asambisaka ezala bato oyo baleki kotombolama ? \q1 \v 23 Moko azali kokufa na makasi na ye nyonso, \q2 na kimia nyonso mpe na pasi ata moko te, \q1 \v 24 na nzoto sembesembe, \q2 mpe na mikuwa etonda na mafuta ; \q1 \v 25 mosusu azali kokufa na mawa na motema, \q2 atikali ata komeka kosepela na bomengo te. \q1 \v 26 Nzokande, bango mibale bakolala ndenge moko \q2 na se ya mabele, \q2 mpe bankusu ekozipa bango. \b \q1 \v 27 Solo, nayebi malamu makanisi \q2 mpe mabongisi na bino, mpo na kotelemela ngai ; \q1 \v 28 bolobaka : ‹ Wapi ndako ya mozwi ? \q2 Wapi bandako oyo bato mabe bazalaki kovanda ? › \q1 \v 29 Botunaki mituna wana te epai ya baleki nzela ? \q2 Bobosani makambo oyo bayebisaki bino, \q1 \v 30 ete moto mabe abikaka mpe na mokolo ya pasi, \q2 akangolamaka mpe na mokolo ya kanda. \q1 \v 31 Nani, na miso ya moto mabe, apamelaka etamboli na ye ? \q2 Nani azongiselaka ye makambo oyo asalaka ? \q1 \v 32 Bamemaka ye na lilita, \q2 mpe bakengelaka kunda na ye. \q1 \v 33 Mabele ya lubwaku ezalaka malamu mpo na ye ; \q2 bato nyonso batambolaka sima na ye na molongo, \q2 mpe bato ebele penza batambolaka liboso na ye. \b \q1 \v 34 Boye, mpo na nini bozali komitungisa \q2 mpo na kobondisa ngai ? \q2 Pamba te kati na biyano na bino, etikali kaka lokuta. » \c 22 \s1 Maloba ya misato ya Elifazi \p \v 1 Elifazi, moto ya Temani, azwaki maloba mpe alobaki : \q1 \v 2 « Boni, litomba nini Nzambe akoki kozwa epai ya moto ? \q2 Ezala ata moto ya bwanya, azalaka na litomba \q2 kaka mpo na ye moko. \q1 \v 3 Ezala soki ozali moyengebene, \q2 litomba nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kozwa, \q2 ata ozali kobongisa nzela na yo ya bosembo ? \b \q1 \v 4 Boni, okanisi ete ezali mpo na boyengebene na yo \q2 nde azali kopamela yo mpe kosambisa yo ? \q1 \v 5 Mabe na yo ezali monene te ? \q2 Masumu na yo eleki ndelo te ? \q1 \v 6 Ozalaki koluka na pamba ndanga \q2 epai ya bandeko na yo ya mibali, \q2 ozalaki kolongola bato bilamba mpe kotika bango bolumbu, \q1 \v 7 ozalaki kopesa mayi te na moto oyo azalaki na posa ya mayi, \q2 mpe ozalaki kopimela moto oyo azalaki na nzala bilei, \q1 \v 8 atako ozalaki moto monene, nkolo mabele, \q2 mpe ozalaki kovanda na mabele yango lokola moto ya lokumu ; \q1 \v 9 ozalaki kozongisa basi bakufisa mibali maboko pamba, \q2 mpe ozalaki kosilisa makasi ya bana bitike. \q1 \v 10 Yango wana, mitambo ezingeli yo, \q2 kobebisama ya mbalakata ekomi kopesa yo somo, \q1 \v 11 molili makasi ezwi yo mpe ozali kokoka komona te, \q2 mpe mpela ezipi yo. \b \q1 \v 12 Boni, Nzambe azali te kuna na likolo, kati na Lola ? \q2 Tala ndenge nini etando ya minzoto ezali likolo koleka ! \q1 \v 13 Nzokande, ozali koloba : ‹ Nzambe ayebi nini ? \q2 Akoki kosambisa kati na mapata ya molili ya boye ? › \q1 \v 14 Mapata minene ezipi Ye, \q2 yango wana azali komona biso te, \q2 wana azali kotambola-tambola na etando ya Lola ? \q1 \v 15 Olingi solo kotikala kaka na nzela ya kala, \q2 nzela oyo bato mabe balekelaki ? \q1 \v 16 Kufa ememaki bango na mbalakata, \q2 mpe miboko na bango etiolaki na mpela. \q1 \v 17 Bazalaki koloba na Nzambe : ‹ Tika biso, biso moko ! \q2 Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akosala biso nini ? › \q1 \v 18 Nzokande, Ye nde atondisaki bandako na bango \q2 na biloko ya kitoko. \q2 Yango wana, ngai, naboyaka toli ya bato mabe. \q1 \v 19 Bato ya sembo bazali komona kobebisama na bango \q2 mpe bazali kosepela, \q2 bayengebene bazali koseka bango mpe bazali koloba : \q1 \v 20 ‹ Solo, banguna na biso babebi, \q2 moto ezikisi bomengo na bango. › \b \q1 \v 21 Zongisa boyokani na yo elongo na Ye mpe luka kimia. \q2 Na nzela wana, bomengo ekoya lisusu epai na yo. \q1 \v 22 Ndima malako oyo ekowuta na monoko na Ye, \q2 mpe batela maloba na Ye kati na motema na yo. \q1 \v 23 Soki ozongi epai na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, \q2 soki obengani mabe mosika ya ndako na yo, \q2 bomengo na yo ekozongela yo. \q1 \v 24 Bwaka wolo na yo kati na putulu, \q2 wolo na yo ya Ofiri kati na mabanga ya lubwaku ; \q1 \v 25 bongo Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akozala wolo na yo, \q2 mpe palata oyo eleki kitoko mpo na yo. \q1 \v 26 Solo, okozwa esengo epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso \q2 mpe okotombola elongi na yo epai ya Nzambe. \q1 \v 27 Okosambela Ye, Ye akoyoka yo, \q2 mpe okokokisa ndayi na yo. \q1 \v 28 Makambo oyo okokana, ekosalema, \q2 mpe pole ekongenga na nzela na yo. \q1 \v 29 Soki bato balembi, mpe yo olobi : ‹ Telema ! › \q2 Nzambe akobikisa bango, \q1 \v 30 akokangola ata moto oyo asali mabe, \q2 akokangola ye penza mpo na bopeto ya maboko na yo. » \c 23 \s1 Eyano ya Yobo \p \v 1 Yobo azongisaki : \q1 \v 2 « Lelo lisusu, kolela na ngai ezali bololo, \q2 loboko oyo ezali likolo na ngai eleki \q2 kolela ya motema na ngai na kilo. \q1 \v 3 Soki nayebaki esika nini nakoki komona Nzambe, \q2 nalingaki kokoma liboso ya kiti ya bokonzi na Ye, \q1 \v 4 nalingaki kotalisa, na bosembo nyonso, \q2 likambo na ngai liboso na Ye, \q2 mpe kotondisa monoko na ngai na matatoli ya solo, \q1 \v 5 nalingaki koyeba biyano oyo alingaki kopesa ngai, \q2 mpe kososola makambo oyo alingaki koloba na ngai. \q1 \v 6 Boni, alingaki kosalela nguya na Ye \q2 mpo na kosamba na ngai ? \q2 Te, alingaki kutu koyokela ngai mawa ! \q1 \v 7 Kuna, liboso na Ye, moto ya sembo akososolisa Ye \q2 likambo na ngai, \q1 mpe nakokangolama libela \q2 wuta na maboko ya mosambisi na ngai. \b \q1 \v 8 Soki nakeyi na ngambo ya este, azali kuna te ; \q2 soki nakeyi na ngambo ya weste, nazali komona Ye te. \q1 \v 9 Tango azali na mosala na ngambo ya nor, \q2 nazali komona Ye te, \q1 tango azali kobaluka na ngambo ya sude, \q2 nazali komona Ye ata moke te. \q1 \v 10 Nzokande, Ye ayebi nzela oyo ngai nazali kolanda ; \q2 soki ameki ngai, nakokoma lokola wolo ya peto. \q1 \v 11 Makolo na ngai elandaki matambe na Ye ; \q2 natambolaki na nzela na Ye \q2 mpe natikalaki kopengwa na yango te. \q1 \v 12 Napengwaki te mosika ya mateya ya bibebu na Ye ; \q2 nabatelaki yango lokola bomengo ya kitoko, \q2 koleka lipa na ngai ya mokolo na mokolo. \b \q1 \v 13 Kasi Ye, azwaka Ye moko mokano na Ye ; \q2 nani akoki kotelemela Ye ? \q2 Asalaka nyonso oyo esepelisaka Ye. \q1 \v 14 Akokokisa ekateli oyo azwaki na tina na ngai \q2 mpe ebele ya mabongisi mosusu oyo akobongisa. \q1 \v 15 Yango wana, liboso na Ye, nazali koyoka somo makasi ; \q2 mpe wana nazali kokanisa makambo oyo nyonso, \q2 nazali kobanga Ye. \q1 \v 16 Nzambe alembisi ngai, \q2 Nkolo-Na-Nguya-Nyonso abangisi ngai. \q1 \v 17 Atako bongo, molili to molili makasi oyo ezingeli ngai \q2 ekangi ngai monoko te. \b \c 24 \q1 \v 1 Mpo na nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akataka tango te \q2 mpo na esambiselo ? \q1 Mpo na nini bato oyo bayebi Ye \q2 basengeli koluka na pamba mikolo ya boye ? \q1 \v 2 Bato bapusaka bandelo, \q2 bakendaka koleisa bibwele oyo bayibaki, \q1 \v 3 babotolaka ane ya mwana etike \q2 mpe bazwaka lokola ndanga ngombe ya mobali \q2 ya mwasi oyo akufisi mobali ; \q1 \v 4 balongolaka babola na nzela, \q2 mpe batindaka na makasi babola nyonso ya mokili ete babombama. \q1 \v 5 Lokola ba-ane ya zamba, babola bakendaka tongo-tongo \q2 na mosala mpo na koluka biloko ya kolia, \q2 kasi kaka esobe nde epesaka bana na bango bilei ; \q1 \v 6 bakataka matiti na bilanga mpo na bibwele \q2 mpe balokotaka bambuma \q2 oyo etikalaka na bilanga ya vino ya moto mabe. \q1 \v 7 Na butu, balalaka bolumbu mpo na kozanga bilamba, \q2 bazangi bulangeti mpo na komifinika na tango ya malili ; \q1 \v 8 bapoli na mvula ya ngomba, \q2 bakangami na mabanga mpo na kozanga esika ya kobombama. \q1 \v 9 Bazali kobotola mwana etike na mabele ya mama na ye, \q2 bazali kokanga mwana ya mobola mpo na niongo. \q1 \v 10 Soki bazangi bilamba, batambolaka bolumbu ; \q2 bamemaka maboke ya nzete ya ble, \q2 kasi bazongaka kaka na nzala. \q1 \v 11 Bakamolaka bambuma ya olive kati na mapango ya bato mosusu, \q2 bakamolaka bambuma ya vino, \q2 kasi bazongaka kaka na posa ya komela. \b \q1 \v 12 Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka, \q2 mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga \q1 mpo na koluka lisungi, \q2 kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te. \q1 \v 13 Bato oyo bazali kosala bongo, \q2 bazali kotombokela pole, \q1 bayebi nzela na Ye te \q2 mpe batambolaka ata kati na yango te. \q1 \v 14 Mobomi azali kotelema na moyi \q2 mpe koboma mobola elongo na moto akelela ; \q2 na butu, azali lokola moyibi. \q1 \v 15 Liso ya moto ya ekobo ezelaka ete molili ekota ; \q2 amilobelaka : ‹ Moto moko te akomona ngai, › \q2 mpe abombaka elongi na ye. \q1 \v 16 Kati na molili, bato balukaka kobuka bandako ya bato ; \q2 kasi na moyi, bamikangelaka na ndako, \q2 bazali koboya pole. \q1 \v 17 Mpo na bango, molili makasi ezali nde tongo, \q2 somo ya molili ekomaka moninga na bango. \b \q1 \v 18 Nzokande bazali lokola fulufulu likolo ya etando ya mayi, \q2 eteni ya mabele na bango elakelami mabe epai ya bato ya mboka, \q2 yango wana moko te azali kokende na bilanga ya vino. \q1 \v 19 Ndenge kokawuka mpe moyi makasi emelaka mayi ya mvula pembe, \q2 ndenge wana mpe mboka ya bakufi emelaka \q2 bato oyo basalaka masumu. \q1 \v 20 Libumu ya mama ebosanaka bango \q2 mpe bankusu esepelaka kolia bango. \q1 Bakanisaka bango lisusu te, \q2 pamba te mabe na bango esili kobukana lokola nzete. \q1 \v 21 Bato mabe basepelisaka basi bazangi bana \q2 mpe bato oyo babotaka te, \q2 kasi basalaka bolamu te epai ya mwasi oyo akufisa mobali. \q1 \v 22 Kasi Nzambe, na nguya na Ye, \q2 abakisaka mikolo ya banyokoli na bango ; \q1 ata batombolami, bazalaka na elikya te \q2 mpo na bomoi na bango. \q1 \v 23 Nzambe apesaka bango kimia, \q2 kasi miso na Ye etalaka nzela na bango. \q1 \v 24 Mpe atako sik’oyo bazali bato minene, \q2 na tango moke bakozala lisusu te, \q1 bakokweya mpe bakokufa lokola moto nyonso, \q2 bakokatama lokola mito ya ble. \b \q1 \v 25 Soki ezali bongo te, nani akoki kolakisa ngai \q2 ete nazali koloba lokuta ? \q2 Nani akoloba ete maloba na ngai ezali ya pamba ? » \c 25 \s1 Maloba ya misato ya Bilidadi \p \v 1 Bilidadi, moto ya Shuwa, azwaki maloba mpe alobaki : \q1 \v 2 « Bokonzi mpe somo ezali ya Nzambe ; \q2 atiaka kimia na bisika na Ye ya likolo. \q1 \v 3 Boni, bakoki kotanga mampinga na Ye ya lola ? \q2 Na likolo ya nani pole ya Nzambe engengaka te ? \q1 \v 4 Ndenge nini moto akoki kozala sembo na miso ya Nzambe ? \q2 Ndenge nini moto oyo abotami na mwasi akoki kozala peto ? \q1 \v 5 Soki kutu sanza ezali kongenga te, \q2 mpe minzoto ezali peto te, na miso na Ye, \q1 \v 6 toloba nini mpo na moto oyo azali se mutsopi, \q2 mpo na mwana na moto oyo azali kaka nyama moke ya pamba ! » \c 26 \s1 Eyano na Yobo epai ya Bilidadi \p \v 1 Yobo azongisaki : \q1 \v 2 « Ah ! Tala ndenge osungi moto oyo azangi makasi, \q2 ndenge osungi loboko oyo elembi ! \q1 \v 3 Tala toli oyo opesi na moto azangi bwanya, \q2 mpe tala ebele na mayele oyo olakisi ! \q1 \v 4 Ozwi maloba oyo wapi ? \q2 Molimo oyo elobi na monoko na yo ezali ya nani ? \b \q1 \v 5 Bakufi balengaka na se ya mayi \q2 mpe ya bikelamu oyo ezalaka kuna. \q1 \v 6 Liboso ya Nzambe, mboka ya bakufi ezali bolumbu, \q2 mpe libulu ya molili ezali polele. \q1 \v 7 Atandaka likolo na esika oyo ezali na eloko moko te, \q2 atelemisaka mabele na likolo ya eloko moko te, \q1 \v 8 akangaka mayi kati na mapata, \q2 kasi mapata epasukaka te ; \q1 \v 9 azipaka kiti ya bokonzi na Ye, \q2 atandaka mapata na likolo na yango ; \q1 \v 10 akataka mondelo na likolo ya mayi, \q2 na suka ya pole mpe na molili. \q1 \v 11 Makonzi ya Lola ezali kolenga \q2 mpe ezali kokamwa na pamela na Ye. \q1 \v 12 Na nguya na Ye, apasoli ebale monene ; \q2 mpe na mayele na Ye, abuki-buki Rakabe na biteni. \q1 \v 13 Na pema na Ye, Likolo ekomaka kitoko, \q2 loboko na Ye etobolaka nyoka oyo ekimaka. \q1 \v 14 Soki makambo wana ezali kaka ndambo moke \q2 ya misala na Ye \q1 mpe mongongo na Ye ya se oyo toyokaka, \q2 nani akoki kososola bakake ya nguya na Ye ? » \c 27 \p \v 1 Yobo akobaki koloba : \q1 \v 2 « Na Kombo ya Nzambe oyo awangani bosembo na ngai, \q2 na Kombo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso \q2 oyo atungisi motema na ngai, \q1 \v 3 wana ngai nazali nanu na bomoi, \q2 mpe pema ya Nzambe ezali nanu na zolo na ngai, \q1 \v 4 bibebu na ngai ekoloba mabe te, \q2 mpe lolemo na ngai ekobimisa lokuta te. \q1 \v 5 Ekozala penza mabe koleka soki ngai nalongisi bino ! \q2 Kino tango nakokufa, nakotika te kotatola \q2 boyengebene na ngai, \q1 \v 6 nakobatela bosembo na ngai, nakotika yango te ; \q2 motema na ngai ekotikala kosambisa ngai mokolo moko te. \b \q1 \v 7 Tika ete bayini na ngai bazala lokola bato mabe, \q2 mpe banguna na ngai, lokola bato bazangi bosembo ! \q1 \v 8 Elikya nini moto mabe azali na yango \q2 tango Nzambe azwi bomoi na ye ? \q1 \v 9 Boni, Nzambe ayokaki koganga na ye \q2 tango pasi ekomelaki ye ? \q1 \v 10 Boni, akosepela penza na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso \q2 to akobelela lisusu Nzambe tango nyonso ? \b \q1 \v 11 Nakoteya bino makambo oyo etali nguya ya Nzambe, \q2 nakobomba te nzela ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. \q1 \v 12 Bino nyonso, boyebi yango malamu ! \q2 Bongo mpo na nini bilobaloba ya boye ? \b \q1 \v 13 Tala lifuti oyo Nzambe abongiseli moto mabe, \q2 libula oyo moto ya mobulu azwaka \q2 epai ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso : \q1 \v 14 Ata soki bana na ye ya mibali bakomi ebele, \q2 mopanga ezali lifuti na bango, \q2 bakitani na ye bakokufa na nzala, \q1 \v 15 bokono oyo ebomaka ekoboma bato na ye, \q2 oyo bakotikala na bomoi, \q2 mpe basi na bango oyo bakufisa mibali bakolela bango te. \q1 \v 16 Ata soki asangisi palata lokola putulu \q2 mpe bilamba lokola mipiku ya mabele, \q1 \v 17 nyonso oyo abongisi, moto ya sembo nde akolata yango, \q2 mpe bato oyo basali mabe te nde bakokabola palata na ye. \q1 \v 18 Ndako oyo atongi ezali makasi te lokola ndako ya limpulututu, \q2 lokola ndako ya matiti oyo mokengeli atongaka. \q1 \v 19 Akokufa na bozwi, kasi akosala na yango eloko moko te ; \q2 tango akofungola miso, bozwi na ye nyonso ekozala lisusu te. \q1 \v 20 Somo ekozwa ye lokola mayi ya mpela ; \q2 na butu, mopepe makasi ekopikola ye na mbalakata. \q1 \v 21 Wuta na ngambo ya este, mopepe makasi ekomema ye, \q2 mpe akei libela, ekopikola ye na esika na ye. \q1 \v 22 Bakobwakela ye makonga na mawa te, \q2 ata azali kosala makasi ya kokima loboko ya moto \q2 oyo azali kobwakela ye yango. \q1 \v 23 Bakobetela libebi na ye maboko, \q2 mpe bakotiola ye na piololo wuta na ndako na ye moko. » \c 28 \s1 Mabombami ya Bwanya \q1 \v 1 Ezali na esika oyo batimolaka palata, \q2 mpe na esika oyo bapetolaka wolo. \q1 \v 2 Ebende ewutaka na mabele, \q2 mpe libanga oyo balekisaka na moto epesaka motako. \q1 \v 3 Moto asilisaka molili, \q2 alukaka kino na se, na bisika ya se penza, \q2 libanga kati na molili oyo eleki makasi, \q1 \v 4 atimolaka libulu mosika ya esika oyo bato bavandaka, \q2 na bisika oyo makolo ya bato ekomaka te, mosika penza na bato, \q2 adiembelaka mosika ya bato nyonso. \q1 \v 5 Mabele epai wapi bilei ewutaka ebongwani na se na yango \q2 lokola nde moto ezikisi yango. \q1 \v 6 Mabanga ya safiri ewutaka na mabanga makasi ya mabele, \q2 mpe putulu ya wolo ezalaka kati na mabele. \q1 \v 7 Ndeke moko te oyo eliaka misuni eyebi nzela na yango, \q2 miso ya mpongo moko te emoni yango, \q1 \v 8 nyama ya zamba etia nanu makolo na yango kuna te, \q2 mpe nkosi etambola nanu kuna te. \q1 \v 9 Moto abetaka loboko na ye na likolo ya libanga ya makasi \q2 mpe apikolaka ngomba longwa na misisa, \q1 \v 10 atimolaka nzela kati na mabanga, \q2 mpe miso na ye emonaka bomengo na yango nyonso, \q1 \v 11 akawusaka mayi ya bibale \q2 mpe abimisaka na pole biloko oyo ebombama. \b \q1 \v 12 Kasi bakoki komona bwanya wapi ? \q2 Mayele evandaka wapi ? \q1 \v 13 Moto ayebaka motuya na yango te, \q2 pamba te bakoki komona yango te \q2 kati na mokili ya bato ya bomoi. \q1 \v 14 Libulu ya mozindo elobi : « Ezali kati na ngai te ; » \q2 mpe ebale monene elobi : « Ezali epai na ngai te. » \q1 \v 15 Bakoki kosomba yango te \q2 na motuya ya libanga ya wolo to na bakilo ya palata ; \q1 \v 16 bakoki te kosomba yango na wolo ya Ofiri \q2 to na mabanga ya talo ya Onikisi to mabanga ya talo ya Safiri ; \q1 \v 17 wolo to diama ekoki te kokokana na yango, \q2 bakoki kozwa yango te na motuya ya sani ya wolo ya kitoko. \q1 \v 18 Mayaka ya Karayi mpe ya Jasipe ezali na motuya te \q2 liboso na yango. \q2 Motuya ya bwanya eleki pawuni ya talo. \q1 \v 19 Topaze ya Kushi ekoki kokokana na yango te, \q2 mpe bakoki te kosomba yango ata na wolo ya peto. \b \q1 \v 20 Boye, bwanya ewutaka wapi ? \q2 Mayele evandaka wapi ? \q1 \v 21 Ebombami mosika na miso ya bato nyonso ya bomoi, \q2 ebombami mpe mosika na miso ya bandeke ya likolo. \q1 \v 22 Libebi mpe kufa elobi : « Kaka sango na yango \q2 nde ekomaki na matoyi na biso. » \q1 \v 23 Nzambe kaka nde ayebi nzela na yango, \q2 Ye nde kaka ayebi esika bwanya evandaka. \q1 \v 24 Pamba te miso na Ye emonaka kino na suka ya mokili, \q2 mpe amonaka nyonso oyo ezali na se ya Lola. \q1 \v 25 Tango apesaki makasi na mopepe \q2 mpe atiaki mondelo na mayi, \q1 \v 26 tango atiaki mobeko mpo na mvula \q2 mpe afungolaki nzela mpo na kake mpe mikalikali, \q1 \v 27 amonaki bwanya mpe akumisaki yango, \q2 andimaki yango mpe amekaki yango. \q1 \v 28 Bongo alobaki na moto : « Kotosa Nkolo, yango nde bwanya ! \q2 Koboya mabe, yango nde mayele ! » \c 29 \s1 Maloba ya suka ya Yobo \p \v 1 Yobo akobaki koloba : \q1 \v 2 « Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu \q2 ndenge nazalaki na basanza oyo eleki, \q2 ndenge nazalaki na mikolo oyo Nzambe azalaki kobatela ngai, \q1 \v 3 tango mwinda na Ye ezalaki kongenga na moto na ngai, \q2 mpe tango, na pole na Ye, nazalaki kotambola kati na molili. \q1 \v 4 Ah ! Soki nakokaki kozala lisusu \q2 ndenge nazalaki na mikolo oyo nazalaki nanu na makasi, \q2 tango bolingo ya Nzambe ezalaki kopambola ndako na ngai, \q1 \v 5 tango Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaki nanu elongo na ngai \q2 bana mibali na ngai bazingelaki ngai, \q1 \v 6 tango nzela na ngai etondisamaki na miliki \q2 mpe libanga ezalaki kosopa mafuta ya olive mpo na ngai ! \b \q1 \v 7 Tango nazalaki kokende na ekuke ya mboka \q2 mpe nazalaki kotia kiti na ngai \q2 na esika oyo bato ebele bakutanaka, \q1 \v 8 bilenge bazalaki komona ngai mpe bazalaki kobombama, \q2 mibange bazalaki kotelema, \q1 \v 9 bakambi bazalaki kozanga maloba \q2 mpe kozipa minoko na bango na maboko, \q1 \v 10 bato ya lokumu bazalaki kokitisa mingongo na bango \q2 mpe lolemo na bango ezalaki kokangama na minoko na bango. \q1 \v 11 Moto nyonso oyo azalaki koyoka ngai \q2 azalaki koloba ete nazali moto ya esengo, \q1 mpe bato nyonso oyo bazalaki komona ngai \q2 bazalaki kotatola mpo na ngai ; \q1 \v 12 pamba te nazalaki kosunga babola \q2 oyo bazalaki kosenga lisungi, \q2 mpe mwana etike oyo azangi moto oyo akosunga ye. \q1 \v 13 Moto oyo akomaki pene ya kokufa azalaki kopambola ngai, \q2 mpe nazalaki kopesa esengo na motema ya mwasi oyo akufisa mobali. \q1 \v 14 Nazalaki kolata bosembo lokola elamba ; \q2 bosembo ezalaki elamba na ngai \q2 mpe kitendi na ngai ya kokanga na moto. \q1 \v 15 Nazalaki miso ya mokufi miso \q2 mpe makolo ya mokakatani ; \q1 \v 16 nazalaki tata ya moto oyo akelela, \q2 nazalaki kobundela moto oyo nayebi te ; \q1 \v 17 nabukaki mbanga ya moto mabe \q2 mpe nabotolaki bato oyo akangaki na minu na ye. \b \q1 \v 18 Nazalaki kokanisa : ‹ Nakokufa kati na ndako na ngai moko \q2 sima na mikolo ebele lokola zelo. \q1 \v 19 Misisa na ngai ekoluka mayi, \q2 mpe mayi oyo ezalaka na matiti \q2 ekovanda butu mobimba na bitape na ngai. \q1 \v 20 Lokumu na ngai ekozongisela ngai esengo, \q2 ata tolotolo ekokoma ya sika na loboko na ngai. › \b \q1 \v 21 Bato bazalaki koyoka ngai na bokebi, \q2 bazalaki na kimia mpo na koyoka toli na ngai. \q1 \v 22 Sima na ngai koloba, bazalaki na liloba ya kozongisa te ; \q2 maloba na ngai ezalaki kokota na esengo na matoyi na bango. \q1 \v 23 Bazalaki kozela ngai ndenge bazelaka mvula, \q2 mpe bazalaki komela maloba na ngai lokola mvula ya suka. \q1 \v 24 Soki nasekisi bango, bazalaki kondima te ; \q2 kongenga ya elongi na ngai ezalaki na motuya mpo na bango. \q1 \v 25 Naponaki nzela mpo na bango \q2 mpe navandaki lokola mokonzi na bango ; \q1 nazalaki kokonza bango lokola mokonzi kati na mampinga na ye, \q2 nazalaki lokola moto oyo azalaki kolendisa bato ya mawa. » \b \c 30 \q1 \v 1 « Kasi sik’oyo, nakomi eloko ya kotiola epai ya bilenge \q2 oyo batata na bango bazangaki tina, \q1 mpe oyo nakokaki kutu te kopesa nzela ya kolia \q2 esika moko na mbwa na ngai, \q2 oyo ezalaki kobatela bibwele na ngai. \q1 \v 2 Makasi ya maboko na bango ekokaki kutu kosunga ngai na nini ? \q2 Pamba te basilaki makasi na nzoto, \q1 \v 3 bazalaki bato bakawuka na nzala mpe na kozanga, \q2 bato oyo bazalaki kolia mabele ya esobe \q2 mpe ezanga matiti. \q1 \v 4 Bazalaki kobuka matiti ya mungwa kati na banzete \q2 mpe kolia misisa ya banzete mike. \q1 \v 5 Babenganaki bango kati na bato na bango, \q2 babelelaki bango lokola miyibi. \q1 \v 6 Bazalaki kovanda na nzela ya mayi ekawuka, \q2 kati na mabulu ya mabele mpe ya mabanga ; \q1 \v 7 bazalaki kolela lokola banyama kati na banzete mike ya nzube, \q2 bazalaki kosangana na se ya banzete mikuse. \q1 \v 8 Bana oyo batata na bango bazanga mayele mpe bazanga kombo \q2 babenganaki bango libanda ya mboka. \b \q1 \v 9 Sik’oyo, bana na bango ya mibali bakomi koseka ngai na banzembo, \q2 nakomi lisapo kati na minoko na bango. \q1 \v 10 Bazali koyina ngai mpe bakimi mosika na ngai, \q2 bazali na somo te ya kobwakela ngai soyi na elongi. \q1 \v 11 Mpo ete Nzambe alembisi singa ya tolotolo na ngai \q2 mpe ayokisi ngai soni, \q2 bazali komipekisa na likambo moko te liboso na ngai. \q1 \v 12 Na loboko na ngai ya mobali, lisanga ya bato mabe ezali kobundisa ngai, \q2 batie mitambo na makolo na ngai, \q2 batie mabaku na nzela na ngai mpo na kosala ngai mabe ; \q1 \v 13 bakangi nzela na ngai, balongi kobebisa ngai \q2 atako moto moko te asungaki bango. \q1 \v 14 Bazali koya lokola na nzela ya lidusu ya monene, \q2 bazali kobunda-bunda kati na ndako ebukana. \q1 \v 15 Somo elati ngai, \q2 lokumu na ngai ekeyi lokola mopepe, \q2 bomengo na ngai elimwe lokola lipata. \b \q1 \v 16 Sik’oyo, bomoi na ngai ekeyi, \q2 mpe mikolo ya pasi ekangi ngai. \q1 \v 17 Butu ezali kotobola mikuwa na ngai \q2 mpe pasi ezali kozangisa ngai pongi. \q1 \v 18 Na nguya na yango, pasi ekomi \q2 lokola kingo ya nzambala na ngai. \q1 \v 19 Nzambe abwaki ngai na potopoto, \q2 mpe nakomi lokola putulu ya mabele to ya moto. \b \q1 \v 20 Oh Nzambe, nazali koganga epai na Yo, \q2 kasi ozali kopesa ngai eyano te ; \q2 natelemi, kasi ozali kotala ngai kaka pamba. \q1 \v 21 Obongwani monguna ya kanza mpo na ngai, \q2 ozali kobundisa ngai na nguya ya loboko na Yo. \q1 \v 22 Omemi ngai liboso ya mopepe \q2 mpe otiki ete mopepe yango emema ngai, \q2 bongo epumbwisi ngai mosika. \q1 \v 23 Nayebi ete ozali komema ngai na kufa, \q2 na esika oyo obongisa mpo na bato ya bomoi. \b \q1 \v 24 Kasi boni, moto oyo azali kokufa akoki kotombola ata loboko te ? \q2 Moto oyo azali na pasi, akoki te kosenga lisungi ? \q1 \v 25 Boni, nazalaki kolela te elongo na bato oyo bazalaki na pasi ? \q2 Motema na ngai eyokelaki babola mawa te ? \q1 \v 26 Nazelaki esengo, \q2 kasi pasi nde ekomeli ngai ; \q1 nazelaki pole, \q2 kasi molili nde ekomeli ngai. \q1 \v 27 Motema na ngai ezali kobaluka kati na ngai, \q2 wuta mokolo pasi oyo ekomeli ngai. \q1 \v 28 Nakomi mwindo, kasi moyi te nde eyindisi ngai ; \q2 kati na lisanga, nakomi kaka kotelema \q2 mpe kobelela mpo na koluka lisungi. \q1 \v 29 Nakoma ndeko ya mbwa ya zamba \q2 mpe moninga ya maligbanga. \q1 \v 30 Poso na ngai ya nzoto eyindi mpe ekomi kokweya-kweya, \q2 mikuwa na ngai ekawuki na moyi. \q1 \v 31 Lindanda na ngai etikali kaka mpo na matanga, \q2 mpe flite na ngai, mpo na kosunga mingongo ya baleli. » \c 31 \s1 Yobo alobeli bosembo na ye \q1 \v 1 « Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai \q2 ete nalula elenge mwasi te. \q1 \v 2 Pamba te, libula nini Nzambe akoki kobongisela \q2 ngai wuta na likolo ? \q1 Libonza nini Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kotindela \q2 ngai wuta na likolo ? \q1 \v 3 Boni, pasi ezali mpo na bato mabe te ? \q2 Kobebisama ezali mpo na bato oyo basalaka masumu te ? \q1 \v 4 Amoni banzela na ngai te ? \q2 Atangi matambe na ngai nyonso te ? \b \q1 \v 5 Soki natambolaki na lokuta \q2 to litambe na ngai elandaki nzela mabe, \q1 \v 6 tika ete Nzambe ameka ngai na emekelo ya sembo, \q2 mpe akomona ete ngai nasali mabe te. \q1 \v 7 Soki matambe na ngai ebimaki na nzela na Ye, \q2 soki motema na ngai etambolisamaki kolanda miso na ngai, \q2 soki maboko na ngai ekomaki mbindo, \q1 \v 8 tika ete bato mosusu balia biloko oyo ngai naloni, \q2 mpe tika ete nkona na ngai epikolama ! \b \q1 \v 9 Soki motema na ngai ekosamaki na mwasi \q2 to soki natalaki na makanisi mabe ekuke ya mozalani na ngai, \q1 \v 10 tika ete mwasi na ngai atutela moto mosusu ble \q2 mpe tika ete mibali mosusu basangisa na ye nzoto. \q1 \v 11 Pamba te elingaki kozala likambo ya soni, \q2 mpe lisumu ya boye ebongi na esambiselo ya basambisi. \q1 \v 12 Ezali moto oyo ezali kozikisa kino na kobebisama \q2 mpe ekoki kobebisa bomengo na ngai nyonso. \b \q1 \v 13 Soki nasalelaki na bosembo te bawumbu na ngai ya mibali mpe ya basi \q2 tango bazwaki ngai mabe, \q1 \v 14 nakosala nini soki Nzambe asambisi ngai ? \q2 Nakopesa eyano nini tango akotuna ngai \q2 ndenge nini nabandaki kosala ? \q1 \v 15 Ezalaki Ye te oyo asalaki ngai kati na libumu ya mama na ngai \q2 nde asalaki bango ? \q1 Ngai na bango, tozalaki lolenge moko te \q2 kati na mabumu ya bamama na biso ? \b \q1 \v 16 Soki nakokisaki te posa ya mobola \q2 to soki nalembisaki miso ya mwasi oyo akufisa mobali, \q1 \v 17 soki nabombaki lipa na ngai mpo na ngai moko \q2 to nakabolaki yango te na bana bitike, \q1 \v 18 —nzokande wuta bolenge na ngai, \q2 nazalaki kobokola bana bitike lokola tata na bango ; \q1 mpe wuta mbotama na ngai, \q2 nazalaki kolakisa nzela na mwasi oyo akufisa mobali— \q1 \v 19 soki namonaki mobola kokufa na kozanga bilamba \q2 to moto akelela kozanga bilamba, \q1 \v 20 bongo motema na ye epambolaki ngai te \q2 na ndenge nazipaki ye na bilamba \q2 oyo ewutaki na bibwele na ngai, \q1 \v 21 soki natombolaki loboko na ngai mpo na kosala mwana etike mabe, \q2 wana nayebaki ete nazali na nguya liboso ya basambisi, \q1 \v 22 tika ete loboko na ngai elongwa na lipeka na ngai \q2 to ebukana ! \q1 \v 23 Pamba te nazalaki kobanga etumbu ya Nzambe, \q2 mpe nakokaki te kosala eloko liboso ya lokumu na Ye. \b \q1 \v 24 Soki natiaki elikya na ngai na wolo \q2 to nalobaki na wolo ya kitoko : ‹ Ozali ekimelo na ngai, › \q1 \v 25 soki nasepelaki na ebele ya bozwi na ngai, \q2 bomengo oyo maboko na ngai esalaki, \q1 \v 26 soki natalaki moyi na kongenga na yango \q2 to sanza kotambola na nkembo, \q1 \v 27 soki motema na ngai ekosamaki na nkuku, \q2 mpe maboko na ngai epesaki yango beze ya lokumu, \q1 \v 28 wana elingaki lisusu kozala mbeba oyo ebongi \q2 na esambiselo ya basambisi, \q2 pamba te nalingaki kowangana Nzambe oyo azali na Likolo. \b \q1 \v 29 Soki nasepelaki na pasi ya monguna na ngai \q2 to nagangaki na esengo na likama oyo ekomelaki ye, \q1 \v 30 soki napesaki nzela na monoko na ngai \q2 ete esala lisumu na kosenga kufa ya monguna na ngai \q2 na nzela ya maloba ya kolakela mabe; \q1 \v 31 soki bato ya libota na ngai balobaka te : \q2 ‹ Nani oyo atondaki te na misuni ya banyama ya Yobo ? › \q1 \v 32 Soki mopaya moko te alalaki libanda, \q2 pamba te ekuke na ngai ezalaki ya kofungwama \q2 tango nyonso mpo na moleki nzela, \q1 \v 33 soki nabombaki lisumu na ngai ndenge Adamu asalaki \q2 to nabombaki yango na motema na ngai, \q1 \v 34 pamba te nabangaki bato \q2 mpe nabangaki ete mabota etiola ngai, \q1 yango wana nakangaki monoko \q2 mpe nakokaki kobima libanda te ! \b \q1 \v 35 Ah, soki nazalaki ata na moto \q2 oyo akokaki koyoka ngai ! \q1 Yango nde sik’oyo liloba na ngai ya suka. \q2 Tika ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso ayanola ngai ! \q1 Tika ete moto oyo afundi ngai akoma na mokanda \q2 makambo oyo afundeli ngai ! \q1 \v 36 Solo, nalingaki komema yango na lipeka na ngai, \q2 nalingaki kolata yango lokola motole, \q1 \v 37 nalingaki kotalisa Ye makambo nyonso oyo nasalaki, \q2 nalingaki kopusana pene na Ye lokola mokambi.— \b \q1 \v 38 Soki mabele na ngai eboyi ngai, \q2 soki mikala na yango elelaki, \q1 \v 39 soki naliaki bambuma na yango na ofele \q2 to soki natungisaki bankolo na yango, \q1 \v 40 tika ete banzube ebima na esika ya ble, \q2 mpe matiti mabe ebima na esika ya orje. » \p Oyo nde suka ya maloba ya Yobo. \c 32 \s1 Maloba ya liboso ya Eliwu \p \v 1 Bato wana misato batikaki koyanola Yobo, pamba te azalaki komimona sembo na miso na ye moko. \v 2 Kasi Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi mpe ya etuka ya Rami, asilikelaki Yobo makasi, pamba te amimonaki sembo koleka Nzambe. \v 3 Asilikelaki mpe baninga misato ya Yobo, pamba te balongaki te kopesa Yobo eyano oyo esengeli ; nzokande bakweyisaki Nzambe. \v 4 Eliwu awelaki te koloba moto ya liboso epai ya Yobo, pamba te baninga wana misato ya Yobo bazalaki mikolo na ye na mibu ya mbotama. \v 5 Kasi tango Eliwu amonaki ete bato wana misato bazali lisusu na likambo ya koloba te, asilikaki makasi. \p \v 6 Boye Eliwu, mwana mobali ya Barakeyeli, moto ya libota ya Buzi, alobaki : \q1 « Nazali leki na mibu ya mbotama, mpe bino bozali mikolo ; \q2 yango wana nazalaki kobanga \q1 mpe nazangaki makasi ya koloba na bino \q2 makambo oyo ngai nayebi. \q1 \v 7 Nazalaki komilobela : \q2 ‹ Bato oyo bazali na mibu ebele ya mbotama bakoyeba koloba, \q2 pamba te kozala na mibu ebele epesaka bwanya. › \q1 \v 8 Nzokande, kati na moto, ezali nde molimo, \q2 ezali pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso \q2 nde epesaka moto boyebi. \q1 \v 9 Ezali kaka mibange te nde bazali na bwanya, \q2 mpe ezali kaka bampaka te nde basosolaka makambo oyo ezali sembo. \b \q1 \v 10 Yango wana nalobi : Boyoka ngai, \q2 ngai mpe nakoloba na bino makambo oyo nayebi. \q1 \v 11 Tango bino bozalaki koloba, ngai nazalaki koloba te, \q2 nazalaki koyoka makanisi na bino, \q2 wana bozalaki koluka makambo ya koloba. \q1 \v 12 Nalandaki bino na bokebi nyonso ; \q2 moko te kati na bino amoni mabe ya Yobo, \q2 moko te kati na bino alongi makanisi ya Yobo. \q1 \v 13 Boloba te : ‹ Tomoni bwanya ; \q2 Nzambe kaka nde akoki kolonga ye, kasi moto te. › \q1 \v 14 Lokola Yobo alobaki maloba na ye epai na ngai te, \q2 ngai mpe nakosalela makanisi na bino te \q2 mpo na kozongisela ye eyano. \b \q1 \v 15 Bayoki soni, batikali ata na liloba moko te ya koloba, \q2 makambo ya koloba esili bango na minoko ! \q1 \v 16 Boni, nasengeli sik’oyo kozela, \q2 awa bazangi maloba to basuki wana mpe bakangi minoko ? \q1 \v 17 Ngai mpe nakoloba sik’oyo, \q2 nakoloba makambo oyo nayebi. \q1 \v 18 Lokola maloba ebele etondi kati na ngai, \q2 motema na ngai ezali kopela lokola moto. \q1 \v 19 Kati na ngai, nazali lokola mbeki ya vino oyo ezali kotoka, \q2 lokola mbeki ya vino ya sika oyo ekomi pene ya kopasuka. \q1 \v 20 Nakoloba mpo ete motema na ngai ekita, \q2 nakofungola bibebu na ngai mpo ete nayanola. \q1 \v 21 Nakopona bilongi te, nakobondela mpe moto moko te ; \q1 \v 22 pamba te, soki nayebaki kobondela bato, \q2 Mokeli na ngai alingaki kolongola ngai mbala moko. \b \c 33 \q1 \v 1 Kasi sik’oyo, Yobo, yoka maloba na ngai, \q2 tia matoyi mpo na koyoka maloba na ngai ! \q1 \v 2 Tala, nafungoli monoko na ngai, \q2 maloba na ngai ezali na songe ya lolemo. \q1 \v 3 Maloba na ngai ewuti na motema ya sembo, \q2 bibebu na ngai ezali penza koloba makambo oyo ngai nayebi. \q1 \v 4 Molimo ya Nzambe asalaki ngai, \q2 pema ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso epesi ngai bomoi. \q1 \v 5 Boye soki okoki, yanola ngai, \q2 mibongisa mpo na komekana na ngai. \q1 \v 6 Nazali kaka lokola yo liboso ya Nzambe ; \q2 ngai mpe nawutaki na putulu. \q1 \v 7 Boye, somo na ngai ebangisa yo te, \q2 mpe monene ya loboko na ngai epanza yo te. \b \q1 \v 8 Kasi olobaki na matoyi na ngai— \q2 mpe nazali nanu koyoka makelele ya maloba na yo— \q1 \v 9 ‹ Nazali sembo, nasali masumu te ; \q2 nazali peto, namemi na ngai ngambo te. › \q1 \v 10 Nzokande, Nzambe amoni mbeba kati na ngai, \q2 azali kozwa ngai lokola monguna na Ye. \q1 \v 11 Akangi makolo na ngai na bibende, \q2 azali kononga banzela na ngai nyonso. \b \q1 \v 12 Kasi, kati na nyonso oyo, ngai nalobi, ozali na elonga te, \q2 pamba te Nzambe azali monene koleka moto. \q1 \v 13 Mpo na nini ozali kosamba na Ye ? \q2 Alimbolaka tina ya misala na Ye epai ya moto moko te. \q1 \v 14 Nzokande, Nzambe alobaka, na lolenge moko to na lolenge mosusu, \q2 kasi moto asosolaka yango te. \q1 \v 15 Alobaka kati na ndoto, kati na emoniseli ya butu, \q2 tango bato bazwaka pongi makasi \q2 wana balali na mbeto ; \q1 \v 16 boye, akoki kofungola matoyi ya bato \q2 mpe kobeta sete na makebisi oyo azali koloba, \q1 \v 17 mpo na kotia moto mosika ya misala na ye ya mabe \q2 mpe kobatela ye na lolendo, \q1 \v 18 mpo na kobatela molimo na ye mpo ete ekufa te, \q2 mpe bomoi na ye mpo ete ebebisama te na mopanga. \b \q1 \v 19 Nzokande, moto akoki mpe, mbala mosusu, koteyama na mbeto na ye, \q2 na nzela ya kobela mpe ya minyoko ya tango nyonso \q2 kati na mikuwa na ye. \q1 \v 20 Boye, azali kosepela lisusu na lipa te, \q2 mpe motema na ye ekomi koboya bilei oyo alingaka mingi. \q1 \v 21 Nzoto na ye ekawuki na pamba, \q2 mpe mikuwa na ye, oyo ebombama, ebimi. \q1 \v 22 Molimo na ye ezali kopusana pene ya kunda, \q2 mpe bomoi na ye, pene ya bamemi sango ya kufa. \q1 \v 23 Nzokande, soki ekoki kozala ata na anjelu moko, \q2 kati na ba-anjelu nkoto moko, \q2 mpo na koyebisa na moto makambo oyo ezali sembo, \q1 \v 24 tika ete asalela ye ngolu mpe aloba : \q2 ‹ Bikisa ye ete akota te kati na libulu ya kufa, \q2 nasili kofuta niongo mpo na kosikola ye, › \q1 \v 25 nzoto na ye ekokoma lisusu sembesembe \q2 lokola na tango ya bolenge na ye, \q2 ekozonga ndenge ezalaki na bomwana na ye. \q1 \v 26 Akosambela Nzambe, \q2 akozwa ngolu na miso na Ye, \q1 akomona Nzambe na miso mpe akoganga na esengo. \q2 Nzambe akozwa ye lisusu lokola moto ya sembo. \q1 \v 27 Boye akoyemba na miso ya bato mpe akoloba : \q2 ‹ Nasalaki masumu mpe natambolaki na bosembo te, \q2 kasi nazwi lifuti oyo nasengelaki kozwa te. \q1 \v 28 Nzambe akangoli molimo na ngai na libulu ya kufa, \q2 mpe nakowumela kati na pole na esengo. › \b \q1 \v 29 Nzambe asalaka makambo oyo nyonso \q2 epai ya moto mbala mibale to mpe mbala misato, \q1 \v 30 mpo na kolongola molimo na ye na libulu ya kufa, \q2 mpo ete pole ya bomoi ekoka kongenga likolo na ye. \b \q1 \v 31 Yobo, fungola matoyi, vanda kimia mpe yoka ngai ! \q2 Nazali na makambo ya koloba na yo. \q1 \v 32 Kasi soki ozali na likambo ya koloba, \q2 yebisa ngai yango, pesa ngai eyano, \q2 mpe ngai nakolongisa yo. \q1 \v 33 Soki te, vanda kimia mpe yoka ngai, \q2 mpe ngai nakoteya yo bwanya. » \c 34 \p \v 1 Eliwu azwaki maloba mpe alobaki : \q1 \v 2 « Bino bato ya bwanya, boyoka maloba na ngai ; \q2 bino bato ya mayele, boyoka ngai ! \q1 \v 3 Pamba te litoyi nde esosolaka maloba \q2 ndenge lolemo emekaka bilei. \q1 \v 4 Tososola mpo na biso moko makambo ya sembo, \q2 toyekola elongo makambo oyo ezali malamu. \b \q1 \v 5 Tala makambo oyo Yobo azali koloba : ‹ Nasali mabe te, \q2 kasi Nzambe aboyi kolongisa ngai. \q1 \v 6 Atako nazali sembo, \q2 bazali kozwa ngai lokola mokosi ; \q1 atako nasali mabe te, \q2 likonga na Ye ezokisi ngai pota oyo esilaka te. › \q1 \v 7 Nani azali lokola Yobo, \q2 oyo amelaka kotiolama lokola mayi ? \q1 \v 8 Atambolaka elongo na banyokoli ya bato, \q2 asanganaka na bato mabe. \q1 \v 9 Pamba te alobi : ‹ Ezali na litomba te epai na moto, \q2 na koluka kosepelisa Nzambe. › \b \q1 \v 10 Boye, bino bato ya mayele, boyoka ngai ! \q2 Ekoki kosalema te ete Nzambe asala mabe ; \q1 ekoki kosalema te ete Nkolo-Na-Nguya-Nyonso asala \q2 makambo oyo ezangi bosembo. \q1 \v 11 Azongiselaka moto na moto kolanda misala na ye, \q2 apesaka na moto na moto kolanda etamboli na ye. \q1 \v 12 Te, Nzambe akoki kosala mabe te, \q2 Nkolo-Na-Nguya-Nyonso akoki kobuka bosembo te. \q1 \v 13 Nani akomisaki Ye Mokonzi ya mokili ? \q2 Nani apesaki Ye bokonzi likolo ya mokili mobimba ? \q1 \v 14 Soki Nzambe azalaki kaka kokanisa mpo na Ye moko, \q2 mpe soki abatelaki kati na Ye moko \q2 molimo na Ye mpe pema na Ye, \q1 \v 15 bato nyonso balingaki kokufa elongo, \q2 mpe moto nyonso alingaki kozonga putulu. \b \q1 \v 16 Soki ozali na boyebi, yoka maloba oyo ; \q2 yoka makambo oyo nazali koloba. \q1 \v 17 Boni, moto oyo ayinaka bosembo \q2 akoki solo kozala mokonzi ? \q1 Okokweyisa solo Nkolo-Na-Bosembo \q2 mpe Nkolo-Na-Nguya ? \q1 \v 18 Ezali Ye nde alobaka na bakonzi : ‹ Bozali bato pamba, › \q2 mpe na bato ya lokumu : ‹ Bozali bato mabe ? › \q1 \v 19 Aponaka bilongi ya bakambi te, \q2 mpe asalelaka bazwi bolamu te \q1 mpo na bozwi na bango koleka babola, \q2 pamba te bango nyonso basalemaki na maboko na Ye. \q1 \v 20 Bato bazali kokufa mbala moko, kati na butu ; \q2 bazali kobunda-bunda mpe kolimwa, \q1 bato ya nguya bazali kolongwa \q2 atako loboko ya moto etindiki bango te. \b \q1 \v 21 Miso na Ye ezali likolo ya banzela ya bato, \q2 amonaka etamboli na bango nyonso. \q1 \v 22 Ezala molili, ezala libulu ya kufa, \q2 eloko moko te ekoki kobomba bato mabe. \q1 \v 23 Nzambe azali na posa ya kolanda-landa bato te \q2 mpo ete bakoka koya liboso na Ye mpo na kosambisama. \q1 \v 24 Abomaka bato ya makasi ata soki aluki koyeba tina te \q2 mpe atiaka bato mosusu na esika na bango. \q1 \v 25 Pamba te ayebi misala na bango, \q2 akweyisi bango na butu moko, mpe babebisami. \q1 \v 26 Apesaka bango etumbu lokola bato mabe \q2 na esika oyo bato nyonso bakoki komona, \q1 \v 27 pamba te baboyaki kolanda Ye \q2 mpe kososola banzela na Ye. \q1 \v 28 Bakomisaki koganga ya babola kino epai ya Nzambe, \q2 mpe koganga ya banyokolami eyokanaki epai na Ye. \b \q1 \v 29 Kasi soki avandi kimia, nani akokweyisa Ye ? \q2 Soki abombi elongi na Ye, nani akoki komona Ye ? \q2 Nzokande, akengelaka bikolo mpe bato \q1 \v 30 mpo na kopekisa bato mabe ete bakamba mokili te \q2 mpe batiela bato mitambo te. \b \q1 \v 31 Soki moto moko alobi na Nzambe : ‹ Nasali mabe, \q2 nazwi etumbu ya masumu na ngai, \q2 kasi nakosala lisusu mabe te. \q1 \v 32 Lakisa ngai makambo oyo nazali kokoka komona te ; \q2 soki nasali mabe, nakozongela yango lisusu te. › \q1 \v 33 Boni, Nzambe akoki kopesa yo etumbu ? \q2 Nayebi ete ondimi na yo te. \q1 Yo nde osengeli kozwa mokano, kasi ngai te ! \q2 Yebisa ngai makambo oyo yo oyebi. \b \q1 \v 34 Bato ya mayele mpe bato ya bwanya \q2 oyo bazali koyoka ngai balobaki : \q1 \v 35 ‹ Yobo azali koloba na boyebi te, \q2 maloba na ye ezali na tina te. › \q1 \v 36 Oh ! Tika ete Yobo asambisama kino na suka \q2 mpo ete apesa biyano lokola moto mabe ! \q1 \v 37 Pamba te, na lisumu na ye, azali kobakisa kotomboka, \q2 azali kotia tembe kati na biso \q1 mpe azali kokoba kobakisa maloba \q2 mpo na kotelemela Nzambe. » \c 35 \p \v 1 Bongo Eliwu alobaki : \q1 \v 2 « Boni, okanisi ete yango ezali sembo ? \q2 Olobi : ‹ Nazali sembo liboso ya Nzambe. › \q1 \v 3 Nzokande, ozali koloba : ‹ Nakozwa nini, \q2 litomba nini nakozwa soki nasali masumu te ? › \b \q1 \v 4 Nalingi kopesa yo eyano, \q2 yo elongo na baninga na yo. \q1 \v 5 Tombola miso na likolo mpe tala ; \q2 mona ndenge mapata ezali likolo na yo. \q1 \v 6 Soki osali masumu, \q2 ekosala Nzambe nini ? \q1 Soki masumu na yo ezali ebele, \q2 ekosala Ye nini ? \q1 \v 7 Soki ozali sembo, okopesa Ye nini \q2 to akozwa nini na loboko na yo ? \q1 \v 8 Mabe na yo ekokomela kaka bazalani na yo, \q2 bosembo na yo ezali na litomba kaka epai ya bana na bato. \b \q1 \v 9 Bato bazali kolela na se ya mokumba ya minyoko, \q2 bazali koganga na se ya motema makasi ya bato minene. \q1 \v 10 Kasi moto moko te azali koloba : ‹ Nzambe Mokeli na ngai, \q2 Ye oyo apesaka banzembo ya esengo na butu, \q1 \v 11 Ye oyo ateyaka biso koleka banyama ya mokili \q2 mpe akomisaka biso mayele koleka bandeke ya likolo, \q2 azali wapi ? › \q1 \v 12 Ata bagangi, Nzambe akoyanola te, \q2 mpo na lolendo ya bato mabe. \q1 \v 13 Pamba te, Nzambe ayokaka te maloba na bango ya pamba, \q2 Nkolo-Na-Nguya-Nyonso azalaka ata na bokebi na yango te. \q1 \v 14 Nzokande, yo ozali komeka koloba ete ozali komona Ye te, \q2 ete ozwi nanu eyano te na kolela na yo epai na Ye. \q1 \v 15 Mpe sik’oyo, soki kanda ya Nzambe eyei nanu likolo na yo te \q2 mpe soki Ye azali nanu kobosana maloba na yo ya soni, \q1 \v 16 elingi koloba ete yo, Yobo, ofungoli monoko na yo kaka na pamba \q2 mpe otondisi yango na maloba ya bozoba. » \c 36 \p \v 1 Eliwu abakisaki lisusu : \q1 \v 2 « Yokela ngai nanu moke, nalingi koteya yo, \q2 nazali na makambo mingi mosusu \q2 ya koloba na tina na Nzambe. \q1 \v 3 Tala, nazali kozwa mosika boyebi na ngai \q2 mpo na kobundela mpe kolongisa Mokeli na ngai. \q1 \v 4 Yeba malamu ete maloba na ngai ezali ya lokuta te, \q2 ezali moto na boyebi ya solo nde azali pene na yo. \b \q1 \v 5 Tala monene ya Nzambe ! \q2 Kasi atiolaka na Ye bato te, \q1 nguya na Ye emonanaka na nzela ya mikano na Ye ya makasi. \q2 Azali na nguya, mpe mikano na Ye ebongwanaka te. \q1 \v 6 Atikaka moto mabe te kozala na bomoi, \q2 alongisaka banyokolami, \q1 \v 7 alongolaka miso na Ye te likolo ya bayengebene, \q2 avandisaka bango na kiti ya bokonzi elongo na bakonzi \q2 mpe atombolaka bango mpo na libela. \q1 \v 8 Kasi soki bato bakangami na minyololo \q2 to na basinga ya minyoko, \q1 \v 9 atalisaka bango mabe oyo basali, \q2 mpe masumu oyo basalaka mpo na lolendo na bango. \q1 \v 10 Afungolaka bango matoyi mpo na kokebisa bango \q2 mpe atindaka bango kotika mabe. \q1 \v 11 Soki batosi mpe basaleli Ye, \q2 bakolekisa mikolo na bango oyo etikali na bomengo, \q2 mpe mibu na bango na esengo. \b \q1 \v 12 Kasi soki batosi Ye te, bakokufa na mopanga \q2 mpe bakosila mpo na kozanga boyebi. \q1 \v 13 Bato oyo bayebi Nzambe te \q2 mpe mitema na bango etondisami na kanda, \q2 babelelaka Nzambe te tango akangaka bango minyololo. \q1 \v 14 Bakufaka na bolenge, \q2 basukisaka bomoi na bango kati na mibali \q2 oyo bamipesaka na kindumba ya bule. \q1 \v 15 Kasi bato oyo bazali konyokwama, \q2 akangolaka bango na nzela ya minyoko na bango, \q2 afungolaka bango matoyi na nzela ya pasi. \b \q1 \v 16 Yo mpe, Nzambe alekisi yo na nzela ya nkaka mpe ya pasi \q2 mpo na kovandisa yo na esika ya pole, \q1 esika oyo ezangi mitungisi ; \q2 akotondisa mesa na yo na biloko ya kitoko. \q1 \v 17 Kasi soki sik’oyo ozali kosala lokola moto mabe, \q2 etumbu mpe kosambisama ekokweyela yo. \q1 \v 18 Tika ete elakeli mabe oyo etelemeli yo \q2 etinda yo te na kotomboka ! \q1 Boni, okoki kopesa kanyaka na bato ebele ? \q2 Kasi kopengwa te ! \q1 \v 19 Boni, bozwi na yo ezali solo na motuya \q2 mpo na kokangola yo ? \q1 Ezala mabanga na yo ya wolo to makasi na yo nyonso, \q2 boni, ekokoka solo kokangola yo ? \q1 \v 20 Kozala na posa te ya butu oyo elongolaka bato \q2 kati na bandako na bango. \q1 \v 21 Mibatela ete okweya na mabe te, \q2 pamba te osepeli na mabe koleka minyoko. \b \q1 \v 22 Tala, Nzambe azali Mokonzi ya nguya na Ye, \q2 nani ateyaka koleka Ye ? \q1 \v 23 Nani akengelaka etamboli na Ye ? \q2 Nani akoki koloba na Ye : \q2 ‹ Ozali kosala mabe ? › \q1 \v 24 Kanisa kokumisa misala na Ye, \q2 misala oyo bato bazali kokumisa na banzembo. \q1 \v 25 Bato nyonso bamonaka yango, \q2 batalaka yango na mosika. \q1 \v 26 Tala ndenge nini Nzambe azali monene ! \q2 Tososolaka yango te. \q2 Moto moko te akoki kotanga motango ya mibu na Ye. \b \q1 \v 27 Abendaka mayi epai na Ye, na mapata ; \q2 akomisaka yango mvula, \q2 mvula oyo enokaka mpe etondisaka bibale. \q1 \v 28 Mapata ekweyisaka yango, \q2 mpe enokisaka yango likolo na ebele ya bato. \q1 \v 29 Nani akoki kososola ndenge Nzambe apanzaka mapata \q2 mpe ndenge bakake ebimaka wuta na ndako na Ye ? \q1 \v 30 Tala ndenge abetisaka bakake likolo ya bato \q2 mpe atondisaka mozindo ya ebale monene. \q1 \v 31 Na nzela ya biloko oyo nyonso, \q2 Nzambe asambisaka bikolo mpe apesaka bilei ebele. \q1 \v 32 Atondisaka maboko na Ye mibale na mikalikali, \q2 akotinda yango na esika oyo Ye aponi. \q1 \v 33 Makelele ya bakake epesaka sango ya koya na Ye, \q2 ata kutu bibwele esosolaka koya na Ye. \b \c 37 \q1 \v 1 Mpo na yango, motema na ngai ezali kolenga \q2 mpe ezali kobeta makasi \q2 lokola nde elingi kobima na esika na yango. \q1 \v 2 Yoka ! Yoka makelele ya mongongo na Ye, \q2 makelele oyo ezali kobima na monoko na Ye. \q1 \v 3 Azali kotinda yango na mokili mobimba, \q2 mpe kake na Ye kino na suka ya mokili. \q1 \v 4 Sima na yango, konguluma na Ye ekoyokana, \q2 akoganga makasi na mongongo ya bokonzi na Ye ; \q1 akokanga mikalikali ya monoko na Ye te, \q2 wana mongongo na Ye ezali koyokana. \q1 \v 5 Na nzela ya mongongo na Ye ya makasi, \q2 Nzambe asalaka bikamwa, \q1 asalaka makambo minene, \q2 makambo minene oyo mayele na biso ekoki kososola te. \q1 \v 6 Alobaka na mvula ya pembe : ‹ Sopana na mabele. › \q2 Alobaka bongo lisusu na mvula ya makasi : ‹ Sopana. › \q1 \v 7 Boye, atiaka kashe na loboko ya moto nyonso \q2 mpo ete moto nyonso ayeba misala na Ye. \q2 Atondisaka bato nyonso na somo ya nguya na Ye. \q1 \v 8 Banyama ezongaka na bandako na yango \q2 mpe evandaka kati na libulu na yango. \q1 \v 9 Mopepe makasi ewutaka na ngambo ya sude, \q2 malili mpe mipepe, na ngambo ya nor. \q1 \v 10 Na mopepe oyo ebimaka na monoko ya Nzambe, \q2 mayi ebongwanaka libanga \q2 mpe bitima ya mayi ekondaka. \q1 \v 11 Atondisaka mapata na mayi, \q2 mpe pole na Ye epanzaka mapata ya mvula. \q1 \v 12 Na makasi na Ye, mapata ebalukaka na bangambo nyonso \q2 mpo na kokokisa nyonso oyo Ye atindaka yango kosala kati na mokili. \q1 \v 13 Ezalaka mpo na kopesa etumbu na mokili \q2 to mpo na kopambola yango. \b \q1 \v 14 Yoka, Yobo ! \q2 Telema mpe sosola bikamwa ya Nzambe. \q1 \v 15 Oyebi ndenge nini Nzambe akambaka mapata, \q2 mpe ndenge nini angengisaka mikalikali na Ye na mapata ? \q1 \v 16 Oyebi ndenge nini mapata evandaka malamu ? \q2 Ezali bikamwa ya Ye-Oyo-Akoka-Na-Boyebi-Nyonso. \q1 \v 17 Bilamba na yo ezali na moto, \q2 nzokande mabele ezali konyokwama na mopepe ya midi. \q1 \v 18 Boni, okoki solo kosunga Nzambe mpo na kotanda \q2 likolo elongo na Ye, likolo oyo ezali makasi \q2 lokola talatala ya ebende banyangwisa na moto ? \b \q1 \v 19 Yebisa biso makambo oyo tosengeli koloba na Ye ; \q2 tokoki koloba likambo moko te mpo na molili na biso. \q1 \v 20 Boni, basengeli koyebisa Ye ete nalingi koloba ? \q2 Basengeli koyebisa Ye mpo ete ayeba yango ? \q1 \v 21 Na pwasa, moto moko te azali komona lisusu pole ; \q2 ebombami kati na mapata. \q2 Kasi soki mopepe eleki, elongoli yango nyonso. \q1 \v 22 Kongenga lokola wolo ezali koya wuta na ngambo ya nor. \q2 Nzambe avandi kati na nkembo ya somo. \q1 \v 23 Azali Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, \q2 tokoki te kokoma esika Ye azali ; \q1 azali monene na nguya mpe na solo ; \q2 azali Mokonzi ya sembo, akoki konyokola te moto oyo azali sembo. \q1 \v 24 Yango wana bato basengeli kokumisa Ye, \q2 kasi Ye atiaka miso na Ye te likolo ya bato \q2 oyo bakanisaka ete bazali bato ya bwanya. » \c 38 \s1 Yawe ayanoli Yobo \p \v 1 Yawe ayanolaki Yobo kati na mopepe makasi : \q1 \v 2 « Nani azali kobebisa mabongisi na ngai \q2 na maloba ezanga tina ? \q1 \v 3 Lata mokaba na yo lokola elombe mobali ; \q2 nakotuna yo mituna mpe okoyanola ngai. \b \q1 \v 4 Ozalaki wapi tango ngai nasalaki mabele ? \q2 Yebisa ngai soki ozali mayele. \q1 \v 5 Nani akataki mondelo na yango, oyebi ye ? \q2 Nani amekaki molayi na yango na singa ? \q1 \v 6 Makolo ya makonzi na yango evandi likolo ya nini ? \q2 Nani atiaki libanga na yango ya songe, \q1 \v 7 tango minzoto ya tongo ezalaki koyemba elongo \q2 mpe tango bana na Nzambe bazalaki koganga na esengo ? \b \q1 \v 8 Nani akangaki ebale monene na bikuke ya makasi \q2 tango yango ebimaki wuta na mabele, \q1 \v 9 tango nakomisaki mapata elamba na yango, \q2 mpe molili, singa ya kokangela yango, \q1 \v 10 tango natielaki yango bandelo, \q2 tango natielaki yango bikuke ya makasi, \q1 \v 11 tango nalobaki : ‹ Okosuka kino awa, kasi mosika te ; \q2 awa nde ekosukela mbonge ya lolendo na yo ? › \b \q1 \v 12 Boni, osili kopesa tongo mitindo \q2 to osili kolakisa tongo-tongo esika na yango, \q1 \v 13 mpo ete esimba bandelo ya mokili \q2 mpe ebimisa bato mabe ? \q1 \v 14 Mabele ebongwani lokola potopoto oyo batia kashe, \q2 mpe nyonso emonani lokola elatisami elamba. \q1 \v 15 Bazangisi bato mabe pole \q2 mpe babuki loboko oyo etombwami mpo na kosala mabe. \b \q1 \v 16 Osila kokoma kino na etima ya ebale monene ? \q2 Osila kotambola na se ya libulu ya molili ? \q1 \v 17 Boni, basila kolakisa yo bikuke ya kufa ? \q2 Osila komona bikuke ya elilingi ya kufa ? \q1 \v 18 Miso na yo esila komona kino na bitando monene ya mokili ? \q2 Loba yango soki oyebi makambo oyo nyonso. \b \q1 \v 19 Wapi nzela oyo ememaka na pole ? \q2 Bongo molili ezalaka wapi \q1 \v 20 mpo ete omema yango na bisika na yango \q2 mpe oyeba banzela oyo ememaka na esika oyo evandaka ? \q1 \v 21 Solo, oyebi yango malamu, \q2 pamba te osilaki kobotama \q2 mpe motuya ya mikolo na yo ezali ebele. \b \q1 \v 22 Boni, osila kokoma na esika \q2 oyo babombaka mvula ya pembe \q2 mpe na esika oyo babombaka mvula ya mabanga ? \q1 \v 23 Nabombaki yango mpo na tango ya pasi \q2 mpe mpo na mikolo ya bitumba. \q1 \v 24 Na nzela nini pole ebimaka \q2 mpe mopepe ya ngambo ya este epanzanaka ? \q1 \v 25 Nani atimola nzela mpo na mvula makasi, \q2 nani apasola nzela mpo na mokalikali ya bakake \q1 \v 26 mpo na konokisa mvula na esika oyo ezanga bato, \q2 na esika ya esobe oyo bato bavandaka te, \q1 \v 27 mpo na kosopa mayi na bisika oyo ezanga bato mpe ekawuka, \q2 mpe mpo na kobotisa matiti ya mobesu ? \q1 \v 28 Boni, mvula ezali nde na tata ? \q2 Nani abotaki matanga ya mamwe ? \q1 \v 29 Libumu ya nani ebotaki mayi ya libanga ? \q2 Nani abotaki londende oyo ewutaka na likolo ? \q1 \v 30 Tango nini mayi ekomaka libanga \q2 mpe likolo ya mayi ya mozindo ekomaka libanga ? \b \q1 \v 31 Okoki kokanga na singa Minzoto sambo esika moko \q2 to kofungola basinga ya Minzoto minei ? \q1 \v 32 Okoki kobimisa bilembo ya Zodiake\f + \fr 38.32 \fr*\ft Zodiake : na lifalanse ezali « Zodiaque ; » elakisi : liboke ya minzoto oyo emonanaka lokola bilembo na likolo mpo na kolakisa makambo oyo ekoya.\ft*\f* na tango na yango \q2 mpe kokamba Ngombolo elongo na bana na yango ? \q1 \v 33 Oyebi mibeko ya likolo ? \q2 Okolonga kokokisa bokonzi na yango na mokili ? \b \q1 \v 34 Okoki kotombola mongongo na yo na mapata \q2 mpo ete mayi ebele ezipa yo ? \q1 \v 35 Okoki kotinda bakake ete ebima na banzela na yango \q2 mpe eloba na yo : ‹ Tala biso oyo ? › \q1 \v 36 Nani atia bwanya na motema ya moto \q2 to nani apesa soso mayele ? \q1 \v 37 Nani azali na bwanya mpo na kotanga mapata \q2 mpe kosopa mayi ya nzungu ya likolo \q1 \v 38 mpo ete putulu etiola elongo lokola ebende oyo enyangolami na moto \q2 mpe mpo ete maboke ya mabele ekangama esika moko ? \b \q1 \v 39 Boni, yo nde okokoka koboma nyama mpo na nkosi ya mwasi \q2 mpe kosilisa nzala ya bana na yango \q1 \v 40 tango elalaka kati na mabulu na yango \q2 mpe emilengelaka na se ya banzete ya makasa ebele ? \q1 \v 41 Nani abongiselaka yanganga bilei \q2 tango bana na yango egangaka epai ya Nzambe \q2 mpe tango eyengaka-yengaka mpo na kozanga bilei ? \b \c 39 \q1 \v 1 Oyebi tango nini bantaba ya ngomba ebotaka ? \q2 Osila komona ndenge mboloko ebotaka ? \q1 \v 2 Osila kotanga basanza oyo ewumelaka na zemi ? \q2 Oyebi tango oyo ebotaka ? \q1 \v 3 Ekogumbama, ekobota bana na yango \q2 mpe ekolongwa na pasi na yango ya kobota. \q1 \v 4 Bana na yango ekozwa makasi, ekokola na libanda, \q2 ekokende mosika mpe ekozonga lisusu te. \b \q1 \v 5 Nani akangoli ane ya zamba ? \q2 Nani apesi yango bonsomi ? \q1 \v 6 Ngai nde napesi yango esobe lokola ndako, \q2 mpe mabele ya mungwa lokola esika ya kovanda. \q1 \v 7 Esekaka makelele ya bingumba \q2 mpe eyokaka te mongongo ya motambolisi ya mpunda. \q1 \v 8 Etambolaka na ngomba mpo na koluka bilei \q2 mpe elukaka na bokebi matiti nyonso ya mobesu. \b \q1 \v 9 Mpakasa ekoki kondima kosalela yo ? \q2 Ekoki kolekisa butu na elielo na yo ya banyama ? \q1 \v 10 Okoki kokanga mpakasa na singa ya ebende oyo ebalolaka mabele ? \q2 Ekoki kolanda yo mpo na kotondisa mabwaku na mabele ? \q1 \v 11 Okotia solo elikya na yo kati na yango, \q2 mpo ete makasi na yango ezali monene ? \q2 Okotikela yango mosala na yo ? \q1 \v 12 Okotiela yango solo motema mpo na komemela yo bambuma \q2 mpe kosangisa yango na etutelo na yo ? \b \q1 \v 13 Mapapu ya maligbanga\f + \fr 39.13 \fr*\ft Maligbanga ezali ndeke monene ya esobe oyo epotaka mbangu makasi, bakilometele nkama moko na tuku mibale mpo na ngonga moko. Ebengami na lifalanse autriche.\ft*\f* efungwamaka na esengo nyonso, \q2 kasi, boni, lipapu mpe nsala na yango ekokani na oyo ya nkongi\f + \fr 39.13 \fr*\ft Nkongi ezali ndeke ya monoko molayi oyo eyembaka kitoko mpe ebengami na lifalanse Cigogne.\ft*\f* ? \q1 \v 14 Maligbanga ebwakaka maki na yango na mabele \q2 mpe etikaka yango ete ezwa moto ya mabele, \q1 \v 15 kasi ebosanaka ete lokolo ekoki kopanza yango \q2 mpe banyama ya zamba ekoki konyata-nyata yango. \q1 \v 16 Enyokolaka bana na yango makasi \q2 lokola nde ezali bana na yango te, \q1 emonaka na yango motema pasi te \q2 lokola nde esali mosala ya mpunda, \q1 \v 17 pamba te Nzambe apimeli yango bwanya \q2 mpe apesi yango mayele te. \q1 \v 18 Nzokande soki etelemi mpe ebandi kopota mbangu, \q2 ekoseka ata mpunda mpe motambolisi na yango. \b \q1 \v 19 Boni, yo nde moto opesa mpunda makasi \q2 mpe olatisa kingo na yango pwale ya milayi ? \q1 \v 20 Yo moto opumbwisaka yango lokola libanki ? \q2 Lolendo ya mongongo kitoko na yango epesaka somo. \q1 \v 21 Mpunda enyataka na makasi nyonso maboke ya mabele, \q2 esepelaka na makasi na yango \q2 mpe ekendaka liboso ya bibundeli. \q1 \v 22 Eyokaka somo te, ebangaka eloko moko te, \q2 ezongaka sima te liboso ya mopanga, \q1 \v 23 tango saki ya mbanzi eninganaka likolo na yango \q2 elongo na likonga oyo ezali kopela moto mpe mopanga. \q1 \v 24 Epumbwaka na kanda mpe epanzaka mabele, \q2 evandaka kimia te soki kelelo ebeti. \q1 \v 25 Soki kelelo ebeti, egangaka : ‹ Ah ! › \q2 Na mosika, eyokaka solo ya bitumba, \q2 koganga ya bakambi ya basoda mpe makelele ya bitumba. \b \q1 \v 26 Boni, ezali na mayele na yo nde kombekombe epumbwaka \q2 mpe etandaka mapapu na yango na ngambo ya sude ? \q1 \v 27 Na mitindo na yo nde mpongo emataka likolo \q2 mpe esalaka zala na yango na likolo ? \q1 \v 28 Evandaka mpe etongaka ndako kati na mabanga, \q2 na esika ya kaka, na songe ya libanga. \q1 \v 29 Wuta na likolo, emonaka nyama ya kolia, \q2 miso na yango emonaka na mosika. \q1 \v 30 Bana na yango emelaka makila. \q2 Esika ebembe ezali, mpongo ezali wana. » \c 40 \s1 Eyano ya liboso ya Yobo epai ya Nzambe \p \v 1 Yawe ayanolaki Yobo : \q1 \v 2 « Boni, moto oyo atiaka tembe na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso \q2 akoki koteya Ye ? \q2 Tika ete oyo azali koswanisa Nzambe ayanola Ye ! » \p \v 3 Yobo azongiselaki Yawe : \q1 \v 4 « Tala ngai, nazali se ekelamu ya pamba, \q2 eyano nini nakoki kopesa Yo ? \q2 Natie loboko na ngai na monoko. \q1 \v 5 Nalobaki mbala moko, \q2 kasi nakoyanola lisusu te ; \q1 na mbala ya mibale, nakobakisa lisusu eloko te. » \s1 Maloba ya mibale ya Nzambe \p \v 6 Yawe alobaki na Yobo wuta na mopepe makasi : \q1 \v 7 « Kanga mokaba na loketo na yo lokola elombe mobali ; \q2 nakotuna yo mituna, mpe okoyanola ngai. \b \q1 \v 8 Olingi kotiola bosembo na ngai ? \q2 Okani kokweyisa ngai mpo ete yo moko omilongisa ? \q1 \v 9 Ozali na loboko lokola oyo ya Nzambe ? \q2 Mongongo na yo ekoki konguluma makasi lokola oyo ya Ye ? \q1 \v 10 Lata nkembo mpe kongenga, \q2 milatisa lokumu mpe monene ! \q1 \v 11 Sopa nguya ya kanda na yo likolo ya bato, \q2 tala bato nyonso ya lolendo liboso na yo \q2 mpe kitisa bango ! \q1 \v 12 Tala bato nyonso ya lolendo, yokisa bango soni ! \q2 Nyata-nyata bato mabe na esika oyo bazali. \q1 \v 13 Kunda bango nyonso kati na putulu, \q2 zipa bilongi na bango na esika ya kobombama. \q1 \v 14 Boye, ngai moko nakopesa yo lokumu, \q2 pamba te loboko na yo ya mobali ekoki mpo na kobikisa yo. \b \q1 \v 15 Tala ngubu : nakelaki yango ndenge nakelaki yo, \q2 kasi eliaka kaka matiti lokola ngombe. \q1 \v 16 Tala makasi oyo ezali kati na loketo na yango, \q2 nguya oyo ezali kati na misuni ya libumu na yango ! \q1 \v 17 Ekembisaka mokila na yango lokola nzete ya sedele ; \q2 misisa ya mipende na yango elingama-lingama ; \q1 \v 18 mikuwa na yango ezali lokola bibende ya bronze ; \q2 mipanzi na yango ezali lokola biteni ya bibende. \q1 \v 19 Ezali ekelamu ya liboso ya Nzambe, \q2 kasi Mokeli na yango atieli yango mopanga pene. \q1 \v 20 Ngomba ezali kopesa yango matiti ya kolia, \q2 esika oyo banyama nyonso ya zamba esakanaka. \q1 \v 21 Elalaka na se ya banzete ya mike-mike, \q2 na se ya matiti oyo ezalaka pembeni ya mayi mpe na potopoto. \q1 \v 22 Banzete ya mike-mike ebombaka yango na se ya elili na yango, \q2 banzete ya pepiliye ezingeli yango. \q1 \v 23 Soki mayi ya ebale etomboki, yango ebangaka te ; \q2 ata mayi ya Yordani esopaneli yango na monoko, \q2 evandaka kaka kimia. \q1 \v 24 Boni, moto akoki kokanga yango \q2 na motambo na tango ezali kotala \q1 to kotobola yango zolo na ndobo, \q2 mpo na kobenda yango ? \c 41 \b \q1 \v 1 Boni, okoki koloba ngando na ndobo ? \q2 Okoki kokanga lolemo na yango na singa ? \q1 \v 2 Okoki kokanga yango singa ya kekele na zolo ? \q2 Okoki kotobola mbanga na yango na ndobo ? \q1 \v 3 Boni, ekobondela yo mingi ? \q2 Ekoloba na yo maloba ya boboto ? \q1 \v 4 Ekoki kosala boyokani elongo na yo \q2 mpo ete ekoma mowumbu na yo mpo na libela ? \q1 \v 5 Okoki kosakana na yango lokola ndeke ? \q2 Okoki kokanga yango na singa \q2 mpo na kosepelisa bana na yo ya basi ? \q1 \v 6 Boni, lisanga ya balobi mbisi bakoki kosala na yango mombongo ? \q2 Bakoki kokabola yango epai ya bateki ? \q1 \v 7 Okoki kotobola mokongo na yango na makonga ? \q2 Okoki kotobola moto na yango na ndobo \q2 oyo bakangelaka bambisi ? \q1 \v 8 Tia loboko na yo na likolo na yango : \q2 soki okanisi etumba oyo okutani na yango, \q2 okozongela lisusu te kotia loboko na yo na likolo na yango. \b \q1 \v 9 Liboso ya ngando yango, elikya nyonso ya kolonga ekomaka pamba ; \q2 soki kaka omoni yango, okweyi na somo. \q1 \v 10 Moto moko te ya tembe akoki kotungisa yango ; \q2 boye nani akoki kotelemela ngai ? \q1 \v 11 Nani adefisaki ngai eloko \q2 mpo ete nafuta niongo na ye ? \q2 Nyonso oyo ezali na se ya Lola ezali ya ngai. \b \q1 \v 12 Nakoki kokanga monoko te mpo na kozanga kolobela \q2 biteni na yango ya nzoto, makasi na yango \q2 mpe kitoko ya nzoto na yango. \q1 \v 13 Nani asila kolongola ngando poso na yango ya nzoto ? \q2 Nani asila kokatisa kati-kati ya milongo mibale ya minu na yango ? \q1 \v 14 Nani asila kofungola bibebu ya monoko na yango ? \q2 Minu na yango etonda na somo. \q1 \v 15 Mokongo na yango esalema na milongo mibale ya nguba, \q2 ekangama elongo na ezipelo ya mabanga. \q1 \v 16 Ekangama moko na mosusu, \q2 mpe mopepe ekoki koleka kati na yango te. \q1 \v 17 Ekangama moko na mosusu, \q2 esimbama elongo mpe ekoki kokabwana te. \q1 \v 18 Soki ekosoli, zolo na yango ekobimisa pole ; \q2 mbuma ya miso na yango ezali lokola moyi ya tongo. \q1 \v 19 Moto makasi mpe moto mike-mike \q2 ebimaka na monoko na yango. \q1 \v 20 Milinga ebimaka na zolo na yango \q2 lokola na mbeki oyo ezali kotoka \q2 to lokola nzungu ya ebende ya moto. \q1 \v 21 Pema na yango epelisaka makala ya moto, \q2 lolemo ya moto ebimaka na monoko na yango. \q1 \v 22 Makasi na yango evandi na kingo na yango, \q2 mpe somo ebimaka liboso na yango. \q1 \v 23 Masusa ya poso ya nzoto na yango ekangama elongo, \q2 elendisama makasi mpe eninganaka te. \q1 \v 24 Motema na yango ezali makasi lokola libanga, \q2 makasi lokola libanga oyo banikelaka bambuma. \q1 \v 25 Soki etelemi, bato ya makasi babangaka, \q2 mpe somo ekimisaka bango. \q1 \v 26 Soki obeti yango ezala mopanga, likonga to mbeli, \q2 ekosala yango eloko te. \q1 \v 27 Emonaka ebende lokola lititi, \q2 bronze lokola nzete epola. \q1 \v 28 Mbanzi ekimisaka yango te, \q2 mpe mabanga oyo babwakaka na nzela ya ebambelo mabanga \q2 ezali lokola poso ya loso mpo na yango. \q1 \v 29 Makonga ezali lokola matiti mpo na yango, \q2 mpe esekaka makelele ya makonga mike-mike. \q1 \v 30 Se ya libumu na yango etonda na banzube, \q2 etambolaka lokola ebende oyo ebalolaka mabele. \q1 \v 31 Eningisaka mayi ya mozindo lokola mayi \q2 oyo ezali kotoka na nzungu, \q1 ekomisaka ebale monene lokola nzungu \q2 oyo batokiselaka malasi. \q1 \v 32 Engengisaka nzela na sima na yango \q2 lokola suki ya pembe likolo ya mayi. \q1 \v 33 Na mokili, nyama moko te ekokani na yango ; \q2 mpe ebangaka te. \q1 \v 34 Ebangaka te kobundisa banyama minene, \q2 ezali mokonzi ya banyama nyonso ya lolendo. » \c 42 \s1 Eyano ya mibale ya Yobo \p \v 1 Yobo azongiselaki Yawe : \q1 \v 2 « Nayebi ete okoki kosala makambo nyonso ; \q2 eloko moko te ekoki kotelemela mabongisi na Yo. \q1 \v 3 Olobaki : ‹ Nani akoki komema molili na mabongisi na Ngai, \q2 na nzela ya maloba na ye, oyo ezanga tina ? › \q1 Solo, nazalaki kolobela makambo oyo nayebaki te, \q2 makambo ya kokamwa penza mpo na ngai, \q2 makambo oyo nasosolaki te. \b \q1 \v 4 Olobaki na ngai : ‹ Yaka sik’oyo, nalingi koloba ; \q2 nalingi kotuna yo motuna, \q2 bongo okopesa ngai eyano. › \q1 \v 5 Matoyi na ngai eyokaki makambo \q2 oyo bazalaki koloba na tina na Yo ; \q2 kasi sik’oyo, miso na ngai emoni Yo. \q1 \v 6 Yango wana, ngai moko, nazali komiyokela mawa \q2 mpe namileli, namikitisi kino na putulu ya mabele \q2 mpe na putulu ya moto. » \s1 Maloba ya suka \p \v 7 Sima na Yawe koloba makambo oyo epai ya Yobo, alobaki na Elifazi, moto ya Temani : « Kanda na Ngai engaleli yo mpe baninga na yo mibale, pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki. \v 8 Kasi sik’oyo, bokamata bangombe sambo ya mibali mpe bameme sambo ya mibali ; bokende epai ya Yobo, mosali na Ngai, botumba mbeka mpo na bino moko. Yobo, mosali na Ngai, akobondela mpo na bino ; mpe mpo na kondima na ye, nakoyamba libondeli na ye mpo ete nasalela bino te kolanda bozoba na bino. Pamba te bolobi na bosembo te na tina na Ngai, ndenge Yobo, mosali na Ngai, alobaki. » \p \v 9 Boye Elifazi, moto ya Temani ; Bilidadi, moto ya Shuwa, mpe Tsofari, moto ya Naama, basalaki makambo oyo Yawe atindaki bango kosala ; mpe Yawe ayambaki libondeli ya Yobo. \p \v 10 Sima na Yobo kosambela mpo na baninga na ye, Yawe atalisaki ye lisusu bolamu mpe apesaki ye bomengo mbala mibale koleka oyo azalaki na yango liboso. \v 11 Bandeko na ye nyonso ya mibali mpe ya basi, elongo na bato nyonso oyo bayebaki ye liboso, bayaki mpe baliaki na ye elongo kati na ndako na ye ; bakabolaki na ye mawa mpe balendisaki ye na tina na pasi nyonso oyo Yawe atindelaki ye, mpe moko na moko kati na bango apesaki ye mbongo moko ya ebende ya palata mpe lopete moko ya wolo. \p \v 12 Yawe apambolaki suka ya Yobo koleka ebandeli ya bomoi na ye. Azalaki na bameme nkoto zomi na minei, bashamo nkoto motoba, bangombe nkoto mibale mpe ba-ane nkoto moko. \v 13 Azalaki na bana mibali sambo mpe bana basi misato. \v 14 Mwana na ye ya liboso ya mwasi, Yemima ; ya mibale, Ketsia ; mpe ya misato, Kereni-Apuki. \v 15 Kati na mokili mobimba, ezalaki te na basi kitoko koleka bana basi ya Yobo. Tata na bango apesaki bango libula ndenge moko na bandeko na bango ya mibali. \b \p \v 16 Sima na yango, Yobo awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na tuku minei ; amonaki bana na ye mpe bakitani na ye kino na molongo ya minei. \v 17 Mpe Yobo akufaki na kimobange makasi mpe atondaki na mikolo.