\id JER Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Jeremi \toc1 Jeremi \toc2 Jeremi \toc3 Je \mt1 Jeremi \c 1 \s1 Kosambisama ya mokili ya Yuda \p \v 1 Mokanda oyo ezali kolobela maloba ya Jeremi, mwana mobali ya Ilikia, moko kati na Banganga-Nzambe ya engumba Anatoti, kati na etuka ya Benjame ; ezali mpe kolobela makambo oyo ekomelaki ye. \p \v 2 Yawe alobaki na ye tango mokonzi Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi, \v 3 mpe na tango ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino na suka ya sanza ya mitano ya mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, kino tango bato ya Yelusalemi bakendeki na bowumbu. \b \s1 Kobengama ya Jeremi \p \v 4 Yawe alobaki na ngai : \pi1 \v 5 — Liboso ete nasala yo kati na libumu ya mama na yo, nayebaki yo ; liboso ete obotama, nabulisaki yo : naponaki yo mpo ete ozala mosakoli ya bikolo. \p \v 6 Nazongisaki : \pi1 — Oh Nkolo Yawe, nayebi koloba te, pamba te nazali nanu elenge ! \p \v 7 Kasi Yawe alobaki na ngai : \pi1 — Koloba te : « Nazali elenge. » Osengeli kokende epai ya bato nyonso epai wapi nakotinda yo, mpe osengeli koyebisa bango makambo nyonso oyo nakotinda yo. \v 8 Kobanga bango te, pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, —elobi Yawe. \p \v 9 Bongo Yawe asembolaki loboko na Ye, asimbaki monoko na ngai mpe alobaki : \pi1 — Tala, nasili kotia maloba na Ngai kati na monoko na yo. \v 10 Na mokolo ya lelo, yeba ete nasili kopesa yo bokonzi likolo ya bikolo mpe ya mikili mpo na kopikola mpe kopanza, kobuka mpe kokweyisa, kotonga mpe kolona. \s1 Emoniseli ya nzete ya amande \p \v 11 Sima na yango, Yawe atunaki ngai : \pi1 — Jeremi, ozali komona nini ? \p Nazongisaki : \pi1 — Nazali komona etape ya nzete ya amande. \p \v 12 Yawe alobaki na ngai : \pi1 — Omoni malamu, pamba te nasenzelaka maloba na Ngai mpo na kokokisa yango. \s1 Emoniseli ya nzungu \p \v 13 Yawe atunaki ngai lisusu : \pi1 — Ozali komona nini ? \p Nazongisaki : \pi1 — Nazali komona nzungu moko ezali kotoka, etengama na ngambo ya nor. \p \v 14 Yawe alobaki na ngai : \pi1 — Ezali wuta na nor nde pasi ekokomela bavandi ya mokili. \v 15 Pamba te nakobengisa bato nyonso ya bituka ya nor, —elobi Yawe. \q1 Bakonzi na bango bakoya kotia \q2 bakiti na bango ya bokonzi liboso ya bikuke ya Yelusalemi ; \q1 bakozingela bamir nyonso ya Yelusalemi \q2 mpe bakobundisa bingumba nyonso ya Yuda. \q1 \v 16 Nakosambisa bato na Ngai mpo na mabe oyo basalaki : \q2 basundolaki Ngai, bakomaki kobonza mbeka ya malasi \q1 epai ya banzambe mosusu, \q2 mpe bakomaki kogumbamela banzambe \q2 oyo basalaki na maboko na bango. \b \q1 \v 17 Mibongisa, yika mpiko ! \q2 Telema mpe yebisa bango makambo nyonso \q1 oyo Ngai nakotinda yo ; \q2 kozala na somo na bango te, \q2 noki te nakokweyisa yo liboso na bango. \q1 \v 18 Na mokolo ya lelo, nakomisi yo engumba batonga makasi, \q2 likonzi ya ebende mpe mir ya ebende \q1 mpo na komibatela liboso ya mokili mobimba : \q2 liboso ya bakonzi ya Yuda, ya bakalaka na yango, \q1 ya Banganga-Nzambe na yango \q2 mpe ya bavandi nyonso ya mokili yango. \q1 \v 19 Yeba ete bakobundisa yo, kasi bakolonga yo te ; \q2 pamba te nazali elongo na yo mpo na kobatela yo, \pm elobi Yawe. \c 2 \s1 Isalaele abosani Nzambe \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \q1 \v 2 « Kende kotatola na matoyi ya Yelusalemi : \b \p Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 ‹ Nakanisi lisusu bolingo \q2 oyo ozalaki na yango epai na Ngai \q1 tango ozalaki elenge ; \q2 ozalaki kolinga Ngai makasi \q1 ndenge kaka mwasi mpe mobali balinganaka, \q2 mpe ozalaki kolanda Ngai na esobe, \q2 kati na mokili oyo ekawuka. \q1 \v 3 Isalaele abulisamaki mpo na Yawe \q2 lokola mbuma ya liboso ya milona na Ye : \q1 moto nyonso oyo azalaki kolia yango \q2 azalaki komema ngambo, \q1 mpe pasi ezalaki kokomela ye, › » \q2 elobi Yawe. \b \q1 \v 4 Oh libota ya Jakobi, bino bituka nyonso ya Isalaele, \q2 boyoka Liloba na Yawe ! \q1 \v 5 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Mabe nini batata na bino bazwaki Ngai \q2 mpo ete basundola Ngai ? \q1 Basepelaki kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, \q2 mpe bango moko bakomaki bato pamba. \q1 \v 6 Bamitunaki te : ‹ Wapi Yawe \q2 oyo abimisaki biso na Ejipito \q1 mpe amemaki biso kati na esobe ? \q2 Wapi Yawe oyo atambolisaki biso \q1 na mokili oyo ekawuka mpe ya mabulu, \q2 mokili ya molili mpe ya kufa, \q1 mokili oyo baleki nzela balekelaka te \q2 mpe mokili oyo bato bavandaka soki moke te ? › \q1 \v 7 Namemaki bino na mokili \q2 oyo mabele na yango ebotaka malamu \q1 mpo ete bolia mbuma na yango ya kitoko ; \q2 kasi boyaki nde kokomisa mokili na Ngai mbindo \q2 mpe kokomisa libula na Ngai eloko ya nkele. \q1 \v 8 Banganga-Nzambe bamitunaki te \q2 mpo na koluka koyeba : \q1 ‹ Yawe azali wapi ? › \q2 Balakisi ya Mobeko balukaki koyeba Ngai te, \q1 bakambi batombokelaki Ngai ; \q2 basakoli bazalaki kosakola na kombo ya Bala \q2 mpe balandaki banzambe ya bikeko oyo ezanga tina. \q1 \v 9 Yango wana, nakosambisa bino, » \q2 elobi Yawe. \q2 « Nakosambisa bino elongo na bakitani na bino, \q1 \v 10 Bokatisa na ngambo ya bisanga ya kitimi \q2 mpe botala malamu, \q1 botinda bato na Kedari mpe botala malamu ; \q2 botala malamu penza soki likambo ya boye esila kosalema. \q1 \v 11 Boni, ezali na ekolo oyo etikaka banzambe na yango \q2 mpo na kosambela banzambe mosusu ? \q1 Nzokande, banzambe yango ezalaka kutu banzambe ya solo te. \q2 Kasi bato na Ngai basundoli Ye oyo azali Nkembo na bango \q2 mpo na kolanda banzambe ya bikeko oyo ezanga tina. \q1 \v 12 Oh likolo, tika ete likambo oyo ekamwisa yo \q2 mpe epesa yo somo makasi, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 13 « Bato na Ngai basali masumu mibale : \q1 Basundoli Ngai oyo nazali etima ya bomoi, \q2 mpe batimoli bango moko mabulu ya mayi, \q2 mabulu oyo ekawukaka noki. \q1 \v 14 Boni, Isalaele azali solo mowumbu \q2 to abotama kati na ndako ya bowumbu ? \q1 Mpo na nini akomi lokola eloko pamba \q2 na miso ya bikolo mosusu ? \q1 \v 15 Bankosi engalaki na koganga mpo na kolengisa ye, \q2 ekomisaki mokili na ye lokola esobe ; \q1 batumbaki bingumba na ye \q2 mpe etikalaki lisusu na bato te. \q1 \v 16 Mpe lisusu, bato ya Mefisi mpe ya Dafine \q2 babuki moto na yo. \q1 \v 17 Mpo na nini makambo oyo nyonso ezali kokomela yo ? \q2 Boni, ezali te mpo ete osundulaki Yawe, Nzambe na yo, \q2 tango azalaki nanu kotambolisa yo na nzela ? \q1 \v 18 Bongo sik’oyo, mpo na nini ozali kokende komela mayi \q2 ya ebale Nili kati na Ejipito ? \q1 Mpo na nini ozali kokende komela mayi \q2 ya ebale Efrate kati na Asiri ? \q1 \v 19 Mabe na yo ekomemela yo etumbu, \q2 kotomboka na yo ekomemela yo pamela. \q1 Tala malamu mpe sosola \q2 ete ezali penza mabe mpe bololo mpo na yo \q1 kosundola Yawe, Nzambe na yo, \q2 mpe kozanga kotosa Ngai, » \q2 elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga. \b \q1 \v 20 « Wuta kala, ozalaki kobuka ekangiseli na yo \q2 mpe kokata minyololo na yo. \q1 Ozalaki koloba : ‹ Nakozala lisusu mowumbu na yo te. › \q2 Yango wana, okomaki komilalisa na bangomba nyonso ya milayi \q1 mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu \q2 lokola mwasi ya ndumba. \q1 \v 21 Nzokande, Ngai nalonaki yo lokola nzete kitoko ya vino \q2 mpo ete obotaka mbuma ya malamu na tembe te. \q1 Bongo, ndenge nini sik’oyo obalukeli Ngai \q2 mpe okomi nzete oyo nayebi te, \q2 nzete oyo ebotaka mbuma mabe ? \q1 \v 22 Ata soki omisukoli na kisi oyo basalelaka sabuni \q2 to omipakoli sabuni ndenge nini, \q1 masumu na yo ekolongwa te liboso na Ngai, » \q2 elobi Nkolo Yawe. \q1 \v 23 « Ndenge nini okoki penza koloba : \q2 ‹ Namikomisi na ngai mbindo te, \q1 nazali kolanda banzambe ya Bala te ? › \q2 Tala nanu ndenge ozalaki kotambola kati na lubwaku \q2 mpe kanisa malamu makambo oyo ozalaki kosala. \q1 Okomaki lokola shamo ya mwasi \q2 oyo eyengaka-yengaka bisika nyonso ; \q1 \v 24 lokola ane ya zamba oyo emesana na esobe, \q2 oyo ebendaka mopepe na zolo \q2 soki ekomi na posa ya kosangisa nzoto. \q1 Bongo, nani akoki kokanga posa na yango \q2 ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali ? \q1 Mpunda nyonso ya mobali oyo ekolanda yango \q2 ekomona pasi te, \q1 pamba te ekozwa yango na tango ya posa \q2 ya kosangisa nzoto na mpunda ya mobali. \q1 \v 25 Sala keba ! Noki te okotikala makolo ngulu \q2 mpe okokawuka mongongo \q1 likolo ya bitambola-tambola ! \q2 Kasi ozali koloba : ‹ Tika na yo ! \q1 Ngai nalingaka banzambe ya bapaya \q2 mpe nakolanda kaka bango. › \b \q1 \v 26 Ndenge basambwisaka moyibi soki bakangi ye, \q2 ndenge wana mpe ekosalema \q1 mpo na libota ya Isalaele : \q2 bakonzi mpe bakambi na bango, \q2 Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango bakosambwa. \q1 \v 27 Balobaka na nzete : ‹ Ozali tata na ngai, › \q2 mpe na libanga : ‹ Yo nde obotaki ngai. › \q1 Bapesaki Ngai mikongo, kasi bilongi na bango te. \q2 Nzokande soki bakomi na pasi, babelelaka : \q2 ‹ Yaka kobikisa biso ! › \q1 \v 28 Wapi sik’oyo banzambe na bino, \q2 banzambe oyo bosalaki na maboko na bino ? \q1 Tika ete eya kobikisa bino na tango ya pasi, \q2 soki penza ekokoka ! \q1 Pamba te, oh bato na Yuda, \q2 ndenge motango ya bingumba na bino ezali, \q2 ndenge wana mpe motango ya banzambe na bino ezali. \b \q1 \v 29 Mpo na nini bozali kosambisa Ngai ? \q2 Nzokande, ezali bino nyonso nde botombokelaki Ngai, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 30 « Napesaki bato na yo etumbu ya pamba ; \q2 pamba te bazwaki na bango kaka mayele te. \q1 Mopanga na yo ebomi basakoli na yo \q2 ndenge nkosi ebomaka bato. \q1 \v 31 Bino bato ya tango oyo, boyoka Liloba na Yawe : \q2 Boni, nazali lokola esobe to mokili ya molili makasi \q1 mpo na mokili ya Isalaele ? \q2 Mpo na nini bato na Ngai bazali koloba : \q1 ‹ Tozali na bonsomi ya kokende epai tolingi \q2 mpe tokoya lisusu epai na yo te ? › \q1 \v 32 Boni, elenge mwasi abosanaka penza \q2 biloko na ye ya monzele ? \q1 Boni, mobandami ya libala abosanaka solo mayaka na ye ? \q2 Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai mikolo ebele. \q1 \v 33 Oh, tala ndenge otondi na mayele ya koluka bolingo ! \q2 Na etamboli na yo, okoki ata kopesa \q2 mayele yango ezala na basi oyo baleki mabe ! \q1 \v 34 Kino na bilamba na yo, \q2 bato bamonaka makila ya babola, \q1 ya bato oyo bayebi likambo te mpe okangi bango na mabe te. \q1 \v 35 Kati na makambo oyo nyonso, ozali koloba : \q2 ‹ Nayebi ata likambo moko te, \q1 kanda ya Nzambe ekokweyela ngai te. › \q2 Kasi Ngai nakopesa yo etumbu \q2 mpo ete ozali koloba : ‹ Nasali masumu te. › \q1 \v 36 Mpo na nini omipesi na koyengayenga na nzela nyonso ? \q2 Okosambwa mpo na Ejipito \q2 ndenge osambwaki mpo na Asiri. \q1 \v 37 Okotika lisusu esika yango, maboko na moto, \q2 pamba te Yawe asundoli bato \q1 oyo ozalaki kotiela motema ; \q2 mpe bango bakosunga yo te. » \c 3 \s1 Mwasi ya ndumba \q1 \v 1 « Soki mobali abomi libala na mwasi na ye, \q2 mpe mwasi yango akei kobala mobali mosusu ; \q1 boni, mobali yango akoki lisusu kozongela ye ? \q2 Bomoni te ete mokili mobimba ekokoma penza mbindo ? \q1 Nzokande yo, osalaki kindumba na mibali ebele, \q2 bongo olingi sik’oyo kozongela Ngai, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 2 « Tombola miso na yo na likolo ya bangomba mpe tala : \q2 Boni, ezali penza na esika epai wapi ozangaki kosala ekobo ? \q1 Ovandaki na nzela mpo na kozela bamakangu, \q2 ovandaki wana lokola moto ya Arabi kati na esobe. \q1 Boye, okomisaki mokili mbindo \q2 na nzela ya ekobo na yo mpe ya misala na yo ya mabe. \q1 \v 3 Yango wana, mvula ekangamaki, \q2 mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. \q1 Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo \q2 mpe oboyi koyoka soni. \q1 \v 4 Boni, obengaka Ngai te : \q2 ‹ Tata na ngai, moninga na ngai ya bomwana ! › \q1 \v 5 Ozali kutu kotuna Ngai : \q2 ‹ Boni, kino tango nini okokanga kanda ? \q1 Kotomboka na yo ekosila te ? › \q2 Yango nde makambo ozali koloba, \q2 kasi ozali mpe kaka kokoba na misala na yo ya mabe. » \s1 Isalaele apengwi nzela ya Yawe \p \v 6 Tango Joziasi azalaki mokonzi, Yawe alobaki na ngai : « Omoni makambo Isalaele oyo apengwi nzela na Ngai azali kosala ? Amataki likolo ya bangomba nyonso mpe atambolaki na se ya banzete nyonso ya mibesu mpo na kosala kindumba. \v 7 Nakanisaki ete akozongela Ngai soki asilisi kosala makambo nyonso oyo azalaki na yango posa ; kasi azongeli Ngai te, mpe ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, amonaki yango. \v 8 Napesaki mopengwi Isalaele mokanda na ye ya koboma libala mpe nabenganaki ye likolo ya kindumba na ye ; kasi namonaki ete ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, abangaki te ; ye mpe abimaki mpo na kosala kindumba. \v 9 Lokola ezalaki likambo ya pamba mpo na Isalaele kosala kindumba, akomisaki mokili mbindo mpe asalaki kindumba na banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga mpe na banzete. \v 10 Atako bongo, ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, azongaki epai na Ngai te na motema na ye mobimba ; azongaki na ye kaka likolo-likolo, » elobi Yawe. \p \v 11 Yawe alobaki na ngai : « Mopengwi Isalaele azali sembo koleka mopengwi Yuda. \v 12 Kende kosakola sango oyo na nor : \q1 ‹ Oh mopengwi Isalaele, zonga, › \q2 elobi Yawe, \q1 ‹ Nakokangela yo lisusu elongi te, \q2 pamba te nazali Moyengebene, › \q2 elobi Yawe. \q2 ‹ Nakokangela yo lisusu kanda te mpo na libela. \q1 \v 13 Ndima kaka mabe na yo, \q2 mpo ete otombokelaki Yawe, Nzambe na yo ; \q1 obebisaki ngolu na yo epai ya banzambe ya bapaya, \q2 na se ya banzete nyonso ya mibesu, \q2 mpe otosaki Ngai te, › » \q2 elobi Yawe. \s1 Kozonga epai na Yawe \p \v 14 « Bozonga epai na Ngai, bino batomboki, » elobi Yawe, « pamba te nazali mobali na bino ya libala. Kati na bino, nakozwa moto moko kati na engumba moko na moko, mpe bato mibale kati na etuka moko na moko, mpo na kozongisa bino na Siona. \v 15 Bongo nakopesa bino bakambi kolanda posa ya motema na Ngai, bakambi oyo bakotambolisa bino na bwanya mpe na mayele. \v 16 Na mikolo wana, tango bokokoma penza ebele na mokili, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te : ‹ Sanduku ya Boyokani ya Yawe. › Bakomitungisa lisusu mpo na yango te mpe bakokanisa yango lisusu te ; kozanga na yango ekolobela bato eloko moko te, mpe bakoluka lisusu te kosala Sanduku ya Boyokani. \v 17 Na tango wana, bakobenga Yelusalemi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, mpe bikolo nyonso ekosangana na Yelusalemi mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yawe. Boye, bakolanda lisusu te baposa mabe ya mitema na bango. \v 18 Na tango wana, libota ya Yuda ekosangana elongo na libota ya Isalaele ; longwa na mokili ya nor, bakokende nzela moko kino na mokili oyo napesaki batata na bino lokola libula. \p \v 19 Namilobelaki : \q1 ‹ Esengo nini penza nazalaki na yango \q2 ya kokamata bino lokola bana \q1 mpe kopesa bino mikili ya kitoko, \q2 libula oyo eleki kitoko kati na bikolo ! › \q1 Nakanisaki ete bokobenga Ngai ‹ Tata › \q2 mpe bokotika te kolanda Ngai. \q1 \v 20 Kasi bino lisanga ya Isalaele, \q2 bokosi Ngai lokola mwasi \q1 oyo asangisi nzoto na mobali mosusu, » \q2 elobi Yawe. \b \q1 \v 21 Koganga ezali koyokana na likolo ya bangomba : \q2 ezali mayi ya miso mpe kolelalela ya bana ya Isalaele, \q1 pamba te babebisi nzela na bango \q2 mpe babosani Yawe, Nzambe na bango. \b \q1 \v 22 « Bino batomboki, bozonga epai na Ngai \q2 mpe nakobikisa bino na kopengwa na bino ! » \b \q1 « Solo, tokozonga epai na Yo, \q2 pamba te Yo, Yawe, nde ozali Nzambe na biso. \q1 \v 23 Solo, bisala-sala oyo ezali kosalema \q2 na bangomba mikuse mpe milayi \q1 ezali kaka makelele ya pamba. \q2 Solo, Yawe, Nzambe na biso, azali Lobiko ya Isalaele. \q1 \v 24 Wuta bolenge na biso, banzambe ya bikeko \q2 ebebisaki mbuma ya misala ya batata na biso, \q1 bibwele na bango mpe ngombe na bango, \q2 bana na bango ya mibali mpe ya basi. \q1 \v 25 Soni ekomi lokola mbeto na biso, \q2 mpe kosambwa, lokola bulangeti mpo na komizipa ; \q1 pamba te biso mpe batata na biso, \q2 tosalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na biso, \q2 totosaki Yawe te, wuta bolenge na biso. » \b \c 4 \q1 \v 1 « Oh Isalaele, soki okozonga, \q2 zonga epai na Ngai, » \q2 elobi Yawe, \q1 « soki olongoli banzambe na yo ya bikeko liboso na Ngai \q2 mpe otiki kotambola libanda ya nzela na Ngai ; \q1 \v 2 soki olapi ndayi na bosolo mpe na bosembo : \q2 ‹ Na Kombo na Yawe, › bikolo ekomipambola \q2 mpe ekomipesa nkembo mpo na yo. » \p \v 3 Tala liloba oyo Yawe alobi epai ya bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi : \q1 « Bokata bilanga ya sika, \q2 mpe botika kolona kati na banzube. \q1 \v 4 Bomibulisa mpo na Yawe, \q2 bopetola mitema na bino, \q1 bino bato ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi ; \q2 noki te kanda na Ngai ekopela \q1 mpe ekozikisa bino lokola moto \q2 mpo na mabe oyo bozali kosala ; \q1 ekopela makasi mpe moto moko te akokoka koboma yango. \s1 Pasi oyo ekowuta na nor \q1 \v 5 Bopanza sango na mokili ya Yuda, \q2 botatola na Yelusalemi mpe boloba : \q1 ‹ Bobeta kelelo na mokili ! › \q2 Boganga makasi mpe bobelela : \q1 ‹ Bosangana, bino nyonso ! \q2 Tokima na bingumba batonga makasi ! › \q1 \v 6 Botombola bendele mpo na kokende na Siona ! \q2 Bobombama noki, pamba te nakoyeisa pasi \q2 wuta na nor mpe kobebisama ya somo ! » \b \q1 \v 7 Nkosi moko ebimi na ndako na yango ; \q2 mobebisi moko ya bikolo abimi. \q1 Atiki esika na ye mpo na koya kobebisa mokili na yo. \q2 Bingumba na yo ekobukana mpe ekotikala lisusu na bato te. \q1 \v 8 Yango wana, bolata bilamba ya basaki, \q2 bosala matanga mpe bolela, \q1 pamba te kanda makasi ya Yawe elongwe \q2 na mito na biso te. \b \q1 \v 9 « Na mokolo wana, » \q2 elobi Yawe, \q2 « mokonzi mpe bakalaka na ye bakolemba nzoto, \q1 Banganga-Nzambe bakoyoka somo \q2 mpe basakoli bakokamwa. » \p \v 10 Bongo nalobaki : « Oh Nkolo Yawe, tala ndenge okosaki bato oyo mpe Yelusalemi tango olobaki : ‹ Bokozala na kimia ! › Nzokande mopanga ezalaki kozela biso. » \p \v 11 Na tango wana, bakoloba na bato oyo mpe na Yelusalemi : « Wuta likolo ya bangomba oyo ezali kati na esobe, mopepe moko ya makasi ezali koya epai ya bato na ngai ; ezali koya te mpo na koyungola to mpo na kopetola. \v 12 Ezali mopepe moko ya makasi penza, pamba te ewuti epai na ngai. Sik’oyo, ngai moko nde nazali kosambisa bango. » \q1 \v 13 Tala ! Monguna azali koya na elulu lokola mapata, \q2 bashar na ye ezali konguluma lokola mopepe ya makasi ; \q1 mpunda na ye kutu eleki mpongo na mbangu. \q2 Mawa na biso ! Tokufi na biso ! \q1 \v 14 Oh Yelusalemi, petola motema na yo na mabe mpo ete obikisama. \q2 Kino tango nini okotika kosala mabongisi ya mabe ? \q1 \v 15 Mongongo moko ezali koyokana wuta na Dani, \q2 ezali kopanza sango ya pasi na bangomba ya Efrayimi. \q1 \v 16 « Boloba yango na bikolo \q2 mpe botatola yango na Yelusalemi : \q1 ‹ Wuta na mboka mosika, mampinga ya banguna ezali koya, \q2 ezali koya na lokito mpo na kobundisa bingumba ya Yuda. \q1 \v 17 Ezingeli Yelusalemi lokola bakengeli bilanga, \q2 pamba te etombokelaki Ngai, › » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 18 « Etamboli mpe misala na yo moko nde ememelaki yo yango. \q2 Tala, etumbu na yo ezali bololo \q2 mpe ekosala pasi makasi na motema. » \b \q1 \v 19 Ah ngai eh ! Ah motema pasi eh ! \q2 Ah ! Motema na ngai ezali kobeta makasi, \q1 ezali koswa makasi kati na ngai, \q2 mpe nazali kokoka kokanga monoko te, \q2 pamba te nayoki lolaka ya kelelo mpe ya bitumba. \q1 \v 20 Sango moko kaka ezali kotambola : libebi na libebi ; \q2 mokili mobimba ekufi. \q1 Na mbalakata, bandako ya kapo ekufi-kufi, \q2 mpe ebombamelo na ngai ebebi na mbala moko. \q1 \v 21 Kino tango nini nakomona bendele ya bitumba, \q2 mpe nakoyoka makelele ya bitumba ? \b \q1 \v 22 « Bato na Ngai bazali bazoba, bayebi Ngai te ; \q2 bazali bana bazangi bososoli, bazali na mayele te, \q1 bayebi kaka kosala mabe, \q2 kasi bayebi kosala bolamu te. » \b \q1 \v 23 Tango natalaki mabele, \q2 namonaki ete ezalaki kaka bongo-bongo \q1 mpe ezalaki ata na eloko moko te ; \q2 tango natalaki likolo, \q2 namonaki ete pole ezalaki lisusu te. \q1 \v 24 Tango natalaki bangomba, \q2 namonaki yango koningana, \q2 bangomba nyonso ya mike ezalaki kobukana. \q1 \v 25 Mpe tango natalaki malamu, \q2 namonaki lisusu ata moto moko te, \q2 mpe bandeke nyonso ya likolo ekimaki. \q1 \v 26 Tango nakobaki kotala, \q2 namonaki ete mokili oyo ezalaki \q1 na mabele ya malamu ekomaki esobe ; \q2 bingumba na yango nyonso ebebisamaki \q2 liboso ya Yawe, na kanda makasi na Ye. \q1 \v 27 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Mokili mobimba ekobebisama, \q2 kasi nakobebisa yango nyonso te. \q1 \v 28 Yango wana, mokili ekozala na matanga ; \q2 mpe kuna na lola, likolo ekokoma mwindo \q1 pamba te nalobaki yango, mpe nakobongola maloba na Ngai te ; \q2 lokola nazwaki mokano, nakozonga lisusu sima te. » \b \q1 \v 29 Bato nyonso ya engumba bakimi, \q2 kaka na makelele ya basoda \q1 oyo batambolaka likolo ya bampunda, \q2 mpe oyo babundaka na matolotolo. \q1 Bamoko babombami na bazamba, \q2 bamosusu bakimi na madusu ya mabanga ya bangomba ; \q1 bingumba nyonso etikali lisusu na bato te, \q2 mpe ata moto moko te atikali kuna. \b \q1 \v 30 Oh engumba ekufa, ozali kosala nini ? \q2 Olati bilamba ya motane mpe babiju ya wolo ; \q1 otie bonzenga na miso na yo. \q2 Ozali komikomisa kitoko na pamba, \q1 bamakangu na yo bazali kotiola yo \q2 mpe bazali koluka koboma yo. \b \q1 \v 31 Nayoki makelele lokola koganga ya mwasi \q2 oyo azali na pasi ya kobota, \q1 kolela ya pasi lokola mwasi \q2 oyo azali kobota mwana na ye ya liboso : \q1 ezali makelele ya kolela ya Siona, mboka kitoko ; \q2 azali kolela, maboko likolo, mpe azali koloba : \q2 « Nabebi na ngai, nakomi na suka liboso ya babomi. » \c 5 \s1 Moto moko te azali sembo \q1 \v 1 « Bokende, botambola na babalabala ya Yelusalemi, \q2 botala zingazinga mpe bososola malamu penza, \q1 boluka ata na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; \q2 soki bokoki komona ata moto moko \q1 oyo atambolaka na bosembo \q2 mpe alukaka boyengebene, \q2 wana nakolimbisa engumba oyo. \q1 \v 2 Atako balapaka ndayi na maloba oyo : \q2 ‹ Na Kombo na Yawe, › \q2 ndayi na bango ezalaka kaka ya lokuta. » \b \q1 \v 3 Oh Yawe ; boni, miso na Yo esepelaka te \q2 komona bosolo ? \q1 Obetaka solo bato, kasi bayokaka na bango pasi te ; \q2 osilisaka koboma bango, kasi baboyaka kaka kobongwana. \q1 Bakomisa mito na bango makasi lokola mabanga \q2 mpe baboyaka kobongola mitema na bango. \q1 \v 4 Namilobelaki : « Bato oyo bazali kaka bato pamba, \q2 bazangi mayele, mpo ete bayebi nzela ya Yawe te \q2 mpe bayebi malako ya Nzambe na bango te. \q1 \v 5 Boye, nakokende epai ya bakambi na bango \q2 mpe nakoloba na bango, \q1 pamba te bango nde basengeli koyeba \q2 nzela ya Yawe mpe malako ya Nzambe na bango. » \q1 Kasi bango nyonso, na motema moko, \q2 babukaki ekangiseli mpe bakataki minyololo. \q1 \v 6 Yango wana, nkosi moko ekobima \q2 wuta na zamba mpe ekoboma bango ; \q1 mbwa ya zamba ekobima wuta na esobe \q2 mpe ekopasola bango ; \q1 nkoyi moko ekovanda pene ya bingumba na bango \q2 mpo na koboma moto nyonso oyo akoluka kobima kuna, \q1 pamba te botomboki na bango ezali monene \q2 mpe lokuta na bango eleki mingi. \b \q1 \v 7 « Na makambo ya boye, ndenge nini nalimbisa yo ? \q2 Ah Yelusalemi, bana na yo basundoli Ngai \q1 mpe bazali kolapa ndayi na bakombo ya banzambe ya bikeko \q2 oyo ezali ata banzambe te. \q1 Nakokisaki baposa na bango nyonso, \q2 kasi basalaki kaka ekobo \q2 mpe bakendeki na bandako ya basi ya ndumba. \q1 \v 8 Ndenge mpunda ya mobali etambolaka-tambolaka \q2 soki ezali na posa ya kosangisa nzoto na mpunda ya mwasi, \q1 ndenge wana mpe moko na moko kati na bango \q2 alandaka-landaka mwasi ya moninga \q2 mpo na kosangisa na ye nzoto. \q1 \v 9 Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te ? » \q2 elobi Yawe ? \q1 « Motema na Ngai ezongisa penza mabe na mabe te \q2 na ekolo ya lolenge oyo ? \q1 \v 10 Bomata na bamir mpo na kokota na Yelusalemi \q2 mpe bobebisa yango ; \q1 kasi bobebisa yango nyonso te. \q2 Bokata bitape na yango, \q2 pamba te etikali lisusu ya Yawe te. \q1 \v 11 Libota ya Isalaele mpe ya Yuda etamboli \q2 na boyengebene te na miso na Ngai, » \q2 elobi Yawe. \b \q1 \v 12 Bawanganaki Yawe mpe balobaki : \q2 « Yawe akosala eloko moko te ! \q1 Pasi moko te ekokomela biso ; \q2 tokotikala na biso komona te \q2 ezala mopanga to nzala makasi. \q1 \v 13 Basakoli bazali kaka lokola mopepe ya pamba, \q2 bazali na mateya penza ya koteya te ; \q1 boye tika ete mabe oyo bazali kosakola \q2 ezongela bango moko ! » \p \v 14 Yango wana, tala liloba oyo Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q1 « Lokola bato oyo balobi maloba ya boye, \q2 nakosala ete maloba na Ngai ezala \q1 lokola moto na monoko na yo, \q2 mpe bato oyo bazala lokola bakoni \q2 oyo moto yango ekozikisa. \q1 \v 15 Oh libota ya Isalaele, » \q2 elobi Yawe, \q1 « nakoyeisa ekolo moko wuta mosika \q2 mpo na kobundisa yo : \q1 ezali ekolo moko ya kala mpe ya nguya, \q2 ekolo oyo yo oyebi ata monoko na yango te. \q1 \v 16 Makonga na bango ezangaka koboma moto te, \q2 bongo bango nyonso bazali bilombe ya bitumba. \q1 \v 17 Bakobotola milona mpe bilei na yo, \q2 bakoboma bana na yo ya basi mpe ya mibali, \q1 bakobotola bangombe mpe bameme na yo, \q2 bakobebisa bilanga na yo ya vino \q1 mpe banzete na yo ya figi, \q2 bakobebisa na mopanga bingumba na yo ya makasi \q2 oyo otielaka motema. \p \v 18 Nzokande, ezala na mokolo wana, » elobi Yawe, « nakosilisa koboma bino nyonso te. \v 19 Tango bato bakotuna : ‹ Mpo na nini Yawe, Nzambe na biso, asali biso makambo ya boye ? › \p Bokozongisela bango : ‹ Ezali mpo ete bosundolaki Ngai mpe bosambelaki banzambe ya bapaya kati na mboka na bino. Yango wana, bokosalela bapaya kati na mboka oyo ezali ya bino te. › \q1 \v 20 Bopanza sango oyo epai ya libota ya Jakobi \q2 mpe botatola yango kati na Yuda : \q1 \v 21 Boyoka makambo oyo, \q2 bino bazoba to bato oyo bozanga mayele : \q1 bozali na miso mpo na komona kasi bomonaka te, \q2 bozali na matoyi mpo na koyoka kasi boyokaka te. \q1 \v 22 Bokoki penza kobanga Ngai te, » \q2 elobi Yawe ? \q1 « Bokoki solo kolenga liboso na Ngai te, \q2 Ngai oyo nasala zelo lokola mondelo ya mayi, \q1 epekiselo ya libela oyo mayi ekoleka ata mokolo moko te ? \q2 Mayi ekoki kotomboka, kasi ezali na nguya te ; \q2 ata soki esali makelele, kasi ekoleka mondelo yango te. \q1 \v 23 Kasi bato oyo bazali mitema makasi \q2 mpe bazali solo batomboki ; \q2 bapesi Ngai mokongo mpe bakei na bango ! \q1 \v 24 Bamilobelaka te : \q1 ‹ Tika ete totosa Yawe, Nzambe na biso, \q2 oyo anokisaka mvula na tango ekoki, \q1 na eleko ya kolona mpe ya kobuka ; \q2 oyo akatela biso baposo oyo esengeli \q2 mpo na kobuka milona. › \q1 \v 25 Mabe na bino nde ebebisi makambo nyonso, \q2 mpe masumu na bino ezangisi bino bolamu. \b \q1 \v 26 Kati na bato na Ngai, ezali na bato mabe \q2 oyo banongaka bato lokola moto oyo azali kotia mitambo \q1 mpo na kokanga bandeke, \q2 mpe batiaka mitambo mpo na kokanga bato. \q1 \v 27 Ndenge ndako ya bandeke etondaka na bandeke, \q2 ndenge wana mpe bandako na bango etonda na lokuta ; \q1 mpe ezali na nzela yango nde bakoma \q2 bazwi mpe bato na nguya. \q1 \v 28 Bakoma kitoko mpe ngebungebu ; \q2 mabe na bango eleka ndelo, \q1 balobelaka likambo ya mwana etike na bosembo te, \q2 mpo kaka bango moko balonga. \q2 Bakataka makambo ya babola na bosembo te. \q1 \v 29 Na makambo ya boye, napesa bango etumbu te ? » \q2 elobi Yawe. \q1 « Boni, motema na Ngai ezongisa penza \q2 mabe na mabe te na ekolo ya boye ? \b \q1 \v 30 Makambo ya kokamwa mpe ya somo \q2 esalemi na mboka : \q1 \v 31 basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta, \q2 Banganga-Nzambe bazali kosalela \q1 bokonzi na bango ndenge balingi, \q2 mpe bato na Ngai bazali kosepela bongo. \q2 Kasi bokosala nini na suka ? » \b \c 6 \q1 \v 1 « Bino bato ya Benjame, \q2 bokima mpo na lobiko na bino ! \q1 Bobima na Yelusalemi ! \q2 Bobeta kelelo na Tekoa ! \q1 Botombola bendele kati na Beti-Akeremi ! \q2 Pamba te pasi mpe kobebisama ya somo \q2 ekobimela na nor. \q1 \v 2 Nakobebisa Siona, mboka kitoko, \q2 oyo ezali penza kitoko \q1 lokola elenge mwasi ya kitoko \q2 mpe ya nzoto sembesembe. \q1 \v 3 Babateli ya bibwele elongo na bibwele na bango \q2 bakobundisa yango, \q1 bakopika bandako na bango ya kapo zingazinga na yango ; \q2 bongo moko na moko akoyeisa bibwele na ye \q2 na esika oyo ye akozwa. \b \q1 \v 4 Bomibongisa mpo na kobundisa yango ! \q2 Botelema, tika ete tobundisa yango na midi ! \q1 Kasi mawa na biso, pamba te mokolo esili \q2 mpe molili ya pokwa ezali koya. \q1 \v 5 Boye, totelema ! Tika ete tokota kati na yango na butu, \q2 tobebisa bandako na yango oyo batonga makasi ! » \b \q1 \v 6 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q2 « Bokata banzete mpe botonga bisika ya kobombama \q2 zingazinga ya Yelusalemi ! \q1 Engumba oyo esengeli kozwa etumbu, \q2 pamba te etondi na makambo mabe ! \q1 \v 7 Ndenge libulu ya mayi ebimisaka mayi, \q2 ndenge wana mpe Yelusalemi ezali kobimisa mabe. \q1 Sango moko kaka ezali kotambola kuna : \q2 sango ya mobulu mpe ya kobebisama ; \q1 tango nyonso liboso na Ngai, \q2 kaka minyoko mpe bapota. \q1 \v 8 Oh engumba Yelusalemi, yoka makebisi oyo, \q2 noki te nakomikomisa mosika na yo \q1 mpe nakokomisa mokili na yo esobe, \q2 mpo ete moto moko te akoka lisusu kovanda kuna. » \b \q1 \v 9 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q2 « Tika ete bosangisa ndambo ya bana ya Isalaele oyo batikali \q1 ndenge balokotaka mbuma ya vino oyo etikalaka ; \q2 bolekisa lisusu maboko na bino \q1 na likolo ya bitape ya banzete ya vino \q2 lokola moto oyo abukaka mbuma ya vino. » \b \q1 \v 10 Naloba lisusu na nani \q2 mpe nakebisa penza nani ? \q1 Nani akoyokela ngai ? \q2 Matoyi na bango ekangama ; \q1 yango wana bakokaka koyoka te. \q2 Liloba na Yawe ezalaka pamba mpo na bango, \q2 basepelaka na bango na yango te. \q1 \v 11 Nzokande ngai, natondi na kanda ya Yawe \q2 mpe nazali kokoka lisusu te kokanga motema. \b \q1 « Sopa yango na bana mike kati na babalabala \q2 mpe na lisanga ya bilenge mibali ; \q1 ekokweyela mwasi mpe mobali nzela moko, \q2 ezala mikolo to mibange. \q1 \v 12 Tango nakosembola loboko na Ngai \q2 mpo na kotelemela bavandi ya mboka, \q1 nakopesa bandako na bango, bilanga na bango mpe basi na bango, \q2 epai ya bato mosusu, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 13 « Bango nyonso, ezala mikolo mpe bana mike, \q2 batondi na lokoso ya mbongo, \q1 kobanda na basakoli kino na Banganga-Nzambe : \q2 bango nyonso bazali kotambola na lokuta. \q1 \v 14 Bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo \q2 mpe bazali koloba : ‹ Makambo nyonso ezali malamu, \q1 nyonso ezali kotambola malamu ! › \q2 Nzokande ata likambo moko ya malamu ezali te. \q1 \v 15 Boni, bazali penza koyokela \q2 makambo na bango ya nkele soni te ? \q1 Te, bazali na bango koyoka ata soni te ; \q2 bayebi kutu ata ndenge bayokaka soni te. \q1 Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, \q2 bakokweyisama tango nakopesa bango etumbu, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 16 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Botelema na esika oyo nzela ekutana, \q1 botuna nzela ya kala \q2 mpe esika oyo nzela ya malamu ezali, \q1 bongo bolanda yango mpe bokozwa kimia \q2 mpo na mitema na bino. \q2 Kasi bolobaki : ‹ Tokolanda na biso yango te ! › \q1 \v 17 Naponaki kati na bino bakengeli oyo balobaki na bino : \q2 ‹ Boyoka mongongo ya kelelo ! › \q2 Kasi bozongisaki : ‹ Te ! Tokoyoka te. › \q1 \v 18 Yango wana, bino bikolo, boyoka ! \q2 Bozala batatoli ya makambo oyo ekokomela bango. \q1 \v 19 Oh mabele, yoka ! \q2 Nakoyeisa pasi epai ya bato oyo, \q1 ekozala lifuti ya mabongisi na bango, \q2 pamba te bayokaki mongongo na Ngai te \q2 mpe babwakaki Mobeko na Ngai. \q1 \v 20 Nasala nini na malasi ya ansa oyo ewuti na Saba \q2 to na matiti ya solo kitoko \q1 oyo ewuti na mboka ya mosika ? \q2 Mbeka na bino ya kotumba esepelisaka Ngai te, \q2 mpe nandimaka makabo na bino te. » \q1 \v 21 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Nakotia mabaku liboso ya bato oyo ; \q1 batata mpe bana na bango bakobeta mabaku \q2 mpe bakokweya nzela moko, \q2 bazalani elongo na baninga bakokufa. » \q1 \v 22 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Tala, mampinga moko ya basoda \q1 ezali koya longwa na mokili ya nor ; \q2 ekolo moko monene ezali komibongisa mpo na bitumba \q2 wuta na basuka ya mabele. \q1 \v 23 Basimbi matolotolo mpe makonga, \q2 bazali mitema mabe mpe bazanga mawa, \q1 bazali koganga lokola makelele ya ebale monene, \q2 bamati likolo ya bampunda, \q1 batandami na milongo lokola basoda \q2 mpo na kobundisa yo Siona, mboka kitoko. » \b \q1 \v 24 Tango toyokaki sango na tina na bango, \q2 tolembaki nzoto, somo makasi ekangaki biso \q2 mpe tokomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. \q1 \v 25 Bokende na bilanga te mpe bobima na nzela te, \q2 pamba te monguna asimbi mopanga, \q2 bongo somo makasi ezali bisika nyonso. \q1 \v 26 Oh bato na ngai, bolata bilamba ya basaki \q2 mpe bolala na putulu, \q1 bosala matanga lokola moto \q2 oyo akufisi mwana na ye se moko. \q1 Bolela na mawa, \q2 pamba te mobomi akokomela biso na mbalakata. \b \q1 \v 27 « Tala, nasili kotia yo kati na bato na ngai \q2 lokola esalelo oyo bamekelaka makasi ya bibende, \q1 mpo ete okoka kotala malamu \q2 mpe omeka ezaleli na bango. \q1 \v 28 Bango nyonso bazali batomboki ya mito makasi, \q2 bayebi kaka kotonga. \q1 Bazali lokola bronze mpe ebende, \q2 bango nyonso bazali kaka babebisi. \q1 \v 29 Epepelo ezali kopelisa moto makasi, \q2 mpe ebende oyo babengaka plon ezali kolimwa na moto ; \q1 kasi bazali na bango kaka konyangwisa \q2 ebende yango na pamba, \q2 pamba te eloko ya mabe ekokabwana na yango te. \q1 \v 30 Babengaka bango palata babwaka, \q2 pamba te Yawe asundola bango. » \c 7 \s1 Losambo ya lokuta \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi : \p \v 2 « Telema na ekuke ya Tempelo ya Yawe mpe tatola maloba oyo : ‹ Boyoka Liloba na Yawe, bino bato nyonso ya Yuda oyo bokotaka na bikuke oyo mpo na kogumbamela Yawe. \v 3 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bobongola bizaleli mpe misala na bino, mpe Ngai nakotika bino ete bowumela na esika oyo. \v 4 Botia motema te na maloba ya lokuta oyo ezali kolobama : ‘ Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe, Tempelo ya Yawe ! Yawe azali awa. ’ \v 5 Soki solo bobongoli bizaleli mpe misala na bino mpe bokomi kokata bino na bino makambo na bosembo ; \v 6 soki botiki konyokola bapaya, bana bitike to basi bakufisa mibali, mpe botiki kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, soki botiki kolanda banzambe mosusu oyo na nzela na yango bomibendelaka pasi, \v 7 nakotika bino ete bowumela na esika oyo, kati na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bino wuta kala mpe mpo na libela. \v 8 Kasi botala ndenge bozali kotia motema na maloba ya lokuta oyo ezali ata na litomba moko te. \v 9 Bozali koyiba, koboma bato, kosala ekobo, kolapa bandayi ya lokuta, kotumba malasi ya ansa mpo na Bala mpe kolanda banzambe mosusu oyo boyebaki te ; \v 10 bongo bozali koya liboso na Ngai kati na Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai, mpe bozali koloba : ‘ Tobiki na biso ! ’ Bobiki na bino solo mpo na kosala makambo oyo nyonso ya nkele ? \v 11 Boni, bokomisi Tempelo oyo ebulisama mpo na Ngai ekimelo ya miyibi ? Ngai nazali komona ete bozali kozwa yango bongo, elobi Yawe. \v 12 Eleki malamu bokende nanu na Silo epai wapi natiaki liboso Esika na Ngai ya bule mpe botala makambo oyo nasalaki kuna mpo na mabe ya bana ya Isalaele. \v 13 Lokola nazalaki kokebisa bino mbala na mbala tango bozalaki kosala makambo oyo nyonso, elobi Yawe, kasi botikalaki koyokela Ngai te ; lokola nabengaki bino, kasi boyanolaki Ngai te, \v 14 makambo oyo nasalaki na Silo, nakosala yango mpe sik’oyo na Ndako na Ngai, na Tempelo oyo bozali kotiela motema, esika oyo napesaki bino elongo na batata na bino. \v 15 Nakobwaka bino mosika na Ngai ndenge nabwakaki bandeko na bino nyonso ya Efrayimi. › \b \p \v 16 Bongo yo Jeremi, komeka kobondela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango ata moke te, komeka kutu te kosengela bango eloko : kotungisa Ngai te, pamba te nakotikala koyokela yo te. \v 17 Boni, ozali komona te makambo oyo bazali kosala kati na bingumba ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi ? \v 18 Bana bazali kolokota bakoni, batata bazali kopelisa moto, mpe basi bazali kosangisa farine mpo na kosala mapa mpo na Ishitari\f + \fr 7.18 \fr*\ft Ishitari azali nzambe mwasi to mwasi mokonzi ya bikelamu ya likolo.\ft*\f* ; bazali kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe mosusu, bongo ezali kopesa Ngai kanda. \v 19 Boni, bakanisi ete bazali kosala Ngai mabe, etuni Yawe ? Te ! Bazali nde komisala bango moko mabe, mpo na soni na bango moko. \v 20 ‹ Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakopelisa kanda na Ngai ya makasi na esika oyo, likolo ya bato, ya banyama, ya banzete ya zamba mpe ya mbuma ya mabele : kanda yango ekopela lokola moto, bongo ekokufa te. \b \p \v 21 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bokoba kaka na makambo oyo bozali kosala, bobakisa mbeka na bino ya kotumba mpe makabo mosusu, mpe bolia misuni yango bino moko ! \v 22 Pamba te, tango nabimisaki bakoko na bino na Ejipito, nalobaki na bango likambo moko te na oyo etali mbeka ya kotumba mpe makabo mosusu. \v 23 Nzokande, napesaki bango kaka mobeko oyo : Botosa Ngai, bongo Ngai nakozala Nzambe na bino mpe bino bokozala bato na Ngai ; botambola na nzela nyonso oyo nakolakisa bino mpo ete bozala bato ya esengo. \v 24 Kasi batiaki matoyi te mpo na koyoka Ngai ; balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Boye, na esika ete babonga, babebaki lisusu koleka. \v 25 Wuta tango batata na bino babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo, natindelaka bino basali na Ngai, basakoli, tango nyonso mpe mikolo nyonso. \v 26 Kasi bayokaki Ngai te mpe bapesaki Ngai matoyi na bango te ; bazalaki kaka mito makasi mpe basalaki lisusu mabe koleka bakoko na bango. › \p \v 27 Ata oyebisi bango makambo oyo nyonso, bakotikala koyoka yo te ; ata mpe obengi bango, bakoyanola te. \v 28 Yango wana, loba na bango : ‹ Tala ekolo oyo eyokaka te maloba ya Yawe, Nzambe na yango, mpe eyokaka pamela te ; solo ezali lisusu te na minoko na bango mpe elimwe penza na bibebu na bango. \p \v 29 Kata suki na yo ya Naziri mpe bwaka yango, yemba nzembo ya mawa na likolo ya bangomba ekawuka, pamba te Yawe abwaki mpe asundoli bato oyo bazali na se ya kanda na Ye. \s1 Lubwaku ya etumbu \p \v 30 Bato ya Yuda basali mabe na miso na Ngai, elobi Yawe, batie banzambe na bango ya bikeko ya mbindo kati na Ndako na Ngai mpe bakomisi Ndako na Ngai mbindo. \v 31 Batongi bisambelo ya likolo ya bangomba, ya Tofeti, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi, mpo ete batumba bana na bango ya mibali mpe ya basi mpo na kobonza bango lokola mbeka : nzokande wana ezali likambo oyo Ngai natindaki bango te mpe natikalaki ata kokanisa yango te. \v 32 Yango wana, bosala keba, elobi Yawe : na mikolo ekoya, bato bakobenga lisusu te esika oyo Tofeti to Lubwaku ya Beni-Inomi, kasi bakobenga yango lubwaku oyo babomelaka bato, pamba te bakokunda bato na Tofeti kino tango esika ekotikala lisusu te. \v 33 Bongo bibembe ya bato oyo ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba ; mpe moto moko te akobengana yango. \v 34 Kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, nakosilisa koganga ya esengo mpe ya kosepela, mongongo ya mobali ya libala mpe ya mwasi ya libala, pamba te mokili ekobeba. \c 8 \p \v 1 Na tango wana, elobi Yawe, bakobimisa mikuwa ya bakonzi mpe ya bakalaka ya Yuda, mikuwa ya Banganga-Nzambe mpe ya basakoli elongo na mikuwa ya bato ya Yelusalemi, wuta na malita na bango. \v 2 Bakotanda yango na se ya moyi, na se ya sanza mpe na se ya mampinga nyonso ya likolo, oyo balingaki, basalelaki na esengo, balandaki, batunaki makambo mpe bafukamelaki. Bakosangisa lisusu mikuwa yango te mpo na kokunda yango, kasi ekokoma lokola matiti ya kopola, na mabele. \v 3 Na bisika nyonso oyo nakopanza bango, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, bato nyonso oyo bakotikala na bomoi kati na ekolo oyo ya mabe bakoluka kufa na esika ya bomoi. › \s1 Lisumu mpe etumbu \p \v 4 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 Boni, soki moto akweyi, atelemaka te ? \q2 Soki moto abungi nzela, azongaka lisusu na nzela te ? \q1 \v 5 Mpo na nini bato ya Yelusalemi babungi nzela ? \q2 Mpo na nini bazali kokangama kaka na nzela na bango ya mabe ? \q1 Bamipesi makasi na makambo ya lokuta \q2 mpe baboyi kozongela Ngai. \q1 \v 6 Nayokaka na bokebi makambo nyonso oyo balobaka, \q2 kasi balobaka makambo ya solo te. \q1 Moko te kati na bango ayokaka motema pasi \q2 mpo na mabe oyo asalaka, \q1 alobaka : ‘ Nasali nini ? ’ \q2 Moto na moto akangamaka kaka na nzela na ye \q2 lokola mpunda oyo ezali kokende na bitumba. \q1 \v 7 Ezala kutu nkongi, kati na likolo, \q2 eyebaka bileko ya kokende na bisika mosusu ; \q1 ebenga, ndeke ya mayi mpe mbilambila \q2 eyebaka ata tango ya kozonga, \q2 kasi bato na Ngai bayebi mibeko ya Yawe te. \b \q1 \v 8 Ndenge nini bokoki koloba : ‘ Tozali bato ya bwanya, \q2 pamba te toyebi Mobeko ya Yawe, ’ \q1 tango sik’oyo ekomeli ya balakisi ya Mobeko \q2 ebongoli yango lokuta ? \q1 \v 9 Bato ya bwanya bakoyokisama soni, \q2 bakoyoka somo mpe bakokende na bowumbu, \q1 pamba te batiolaki Liloba na Yawe. \q2 Bazali na bwanya ya ndenge nini ? \q1 \v 10 Yango wana, nakokaba basi na bango \q2 epai ya mibali mosusu, \q1 mpe bilanga na bango epai ya bato mosusu ; \q2 pamba te bango nyonso, ezala mikolo to bana mike, \q1 batondi na lokoso ya mbongo ; \q2 basakoli mpe Banganga-Nzambe nyonso bakomi \q2 se kotambola na lokuta ; \q1 \v 11 bazali kosalisa bapota ya bato na Ngai likolo-likolo \q2 mpe bazali koloba : ‘ Makambo nyonso ezali malamu, \q1 nyonso ezali kotambola malamu ! ’ \q2 Nzokande, ata likambo moko ya malamu ezali te. \q1 \v 12 Boni, bazali koyokela makambo na bango ya nkele soni ? \q2 Te ! Bazali koyoka ata soni te ; \q2 bayebi kutu te ndenge bayokaka soni ! \q1 Yango wana, bakokufa lokola bato nyonso, \q2 bakokweyisama tango bakozwa etumbu, \q2 elobi Yawe. \b \q1 \v 13 Nakobebisa milona na bango, \q2 elobi Yawe. \q2 Bambuma ya vino ekozala lisusu te na banzete ya vino, \q1 mbuma ya figi ekozala lisusu te na banzete ya figi, \q2 mpe makasa ya banzete yango ekokawuka. \q2 Bakobotola bango biloko oyo napesaki bango. › » \b \q1 \v 14 Mpo na nini tozali kovanda awa ? \q2 Tosangana esika moko ! \q1 Tika ete tokima kati na bingumba batonga makasi \q2 mpo ete tokufela kuna ! \q1 Pamba te Yawe, Nzambe na biso, afungoleli biso ekuke ya kufa \q2 mpe apesi biso mayi oyo ezali na ngenge mpo ete tomela, \q2 pamba te tosalaki masumu liboso na Ye. \q1 \v 15 Tozalaki na elikya ete tokozala na kimia, \q2 kasi tomoni likambo moko te ya malamu ; \q1 tozalaki na elikya ete tokobika, \q2 kasi pasi na pasi nde ezali kolanda biso ! \q1 \v 16 Lokito ya bampunda ya banguna \q2 mpe makelele ya makolo na yango \q1 ezali koyokana wuta na Dani, \q2 ezali koya mpo na kobebisa mokili mpe biloko nyonso \q1 oyo ezali kati na yango, \q2 engumba mpe bavandi na yango nyonso, \q2 bongo mokili mobimba eningani. \b \q1 \v 17 « Botala, nakotindela bino banyoka oyo ebomaka, \q2 bitupa oyo moto akoki kosakana na yango te, \q1 mpo ete eswa bino, » \q2 elobi Yawe. \s1 Pasi ya mosakoli \q1 \v 18 Pasi na ngai ezangeli kisi \q2 mpo na kosilisa yango, \q2 motema na ngai elembi kati na ngai. \q1 \v 19 Yoka koganga ya bato na ngai \q2 wuta na mokili ya mosika : \q1 « Boni, Yawe azali lisusu te, kati na Siona ? \q2 Mokonzi na yango azali lisusu kuna te ? » \b \q1 « Mpo na nini batumbolaki kanda na Ngai \q2 na nzela ya banzambe na bango ya bikeko, \q2 na nzela ya banzambe ya bapaya oyo ezanga ata tina ? » \b \q1 \v 20 « Tango ya kobuka mbuma esili koleka, \q2 elanga mpe esili kokoma na suka, \q2 kasi biso tobikisami te. » \b \q1 \v 21 Ndenge bato na ngai bazali koyoka pasi, \q2 ndenge wana mpe ngai nazali koyoka pasi, \q2 nazali kolela, mpe somo ekangi ngai makasi. \q1 \v 22 Boni, kisi ezali te kati na Galadi ? \q2 Minganga bazali kuna te ? \q2 Bongo mpo na nini bato na ngai bazali kobika te ? \c 9 \q1 \v 1 Ah ! Soki moto na ngai ezalaki etima, \q2 mpe soki miso na ngai ezalaki liziba ya mpinzoli, \q1 nalingaki kolela butu mpe moyi \q2 mpo na bato na ngai, oyo basili koboma. \s1 Libota ya bakosi \q1 \v 2 Ah ! Soki nazalaki ata na ndako ya bapaya kati na esobe, \q2 nalingaki ata kokima bato na ngai \q1 mpe kozala mosika na bango, \q2 pamba te bango nyonso bazali bandumba, \q2 bazali lisanga ya bakosi ! \q1 \v 3 « Babongisaka lolemo na bango \q2 lokola tolotolo mpo na kokosa ; \q1 balongaka kati na mokili na nzela ya solo te, \q2 pamba te basalaka se mabe likolo ya mabe \q1 mpe batosaka Ngai te, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 4 « Tika ete moto na moto asala keba na moninga na ye \q2 mpe atia motema te na ndeko na ye, \q1 pamba te ndeko nyonso azali moto ya lokuta, \q2 mpe moninga nyonso azali moto ya matongi. \q1 \v 5 Moninga azali kokosa moninga na ye, \q2 mpe moto moko te azali koloba solo. \q1 Bamibongisaka mpo na koloba lokuta, \q2 babimisaka motoki na bango mpo na kosala masumu. \q1 \v 6 Mosala na bango se kokosa na kokosa ; \q2 mpe na lokuta na bango, baboyaka kotosa Ngai, » \q2 elobi Yawe. \p \v 7 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q1 « Tala, nakopetola mpe nakomeka bango na moto, \q2 pamba te nasala lisusu nini \q2 mpo na masumu ya bato na Ngai ? \q1 \v 8 Lolemo na bango ezali lokola likonga oyo ebomaka, \q2 ebimisaka kaka maloba ya lokuta. \q1 Moto na moto alobaka na moninga na ye \q2 na esengo na monoko ; \q2 kasi na se ya motema, atielaka ye motambo. \q1 \v 9 Bongo na makambo ya boye, \q2 napesa bango etumbu te, » \q2 elobi Yawe ? \q2 « Nazongisa mabe na mabe te na ekolo ya boye ? » \b \q1 \v 10 Nakosala matanga mpe nakolela \q2 mpo na bangomba mpe matiti ya esobe. \q1 Nyonso esili kokawuka \q2 mpe moto moko te azali lisusu kolekela wana ; \q1 ezala makelele ya bibwele to ya bandeke \q2 ezali lisusu koyokana te ; \q1 bandeke ya likolo ekimi \q2 mpe banyama ya zamba esili kokende. \b \q1 \v 11 « Nakokomisa Yelusalemi \q2 liboke ya mabanga oyo ebukana-bukana, \q2 ndako ya mbwa ya zamba ; \q1 nakobebisa bingumba ya Yuda, \q2 bongo moto moko te akovanda lisusu kuna. \q1 \v 12 Nani azali penza na bwanya \q2 mpo na kososola makambo ya boye ? \q1 Nani Yawe ateyaki mpo ete alimbola yango ? \q2 Mpo na nini mokili ebebisami, \q1 etikali pamba lokola esobe \q2 epai wapi moto alekaka te ? » \p \v 13 Yawe alobi : « Makambo oyo nyonso ekomeli bango mpo ete basundoli Mobeko na Ngai oyo natiaki liboso na bango, batosi Ngai te mpe basaleli malako na Ngai te. \v 14 Nzokande, batiaki kaka mito makasi mpe bakobaki kolanda banzambe ya Bala oyo batata na bango balakisaki bango. » \p \v 15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tala, nakoleisa bato oyo matiti ya bololo mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge. \v 16 Nakopanza bango kati na bikolo oyo, ezala bango to bakoko na bango, batikalaki koyeba te ; nakolanda bango na mopanga kino nakosilisa koboma bango. » \p \v 17 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q1 « Botala malamu makambo oyo ! \q1 Bobengisa basi oyo balelaka bibembe, \q2 bobengisa penza ba-oyo bayebi kolela malamu ! \q1 \v 18 Tika ete baya noki mpo ete bayembela biso \q2 banzembo ya mawa kino tango mpinzoli ekobima biso \q2 mpe ekotondisa miso na biso. \q1 \v 19 Kolela ya mawa ezali koyokana wuta na Siona : \q2 ‹ Ah ! Tala ndenge nini tosili kobebisama ! \q1 Tala ndenge nini tosambwe ! \q2 Tika ete tokima mokili na biso, \q2 pamba te bandako na biso ebebisami. › » \b \q1 \v 20 Eh basi, boyoka Liloba na Yawe ! \q2 Bofungola matoyi mpo na koyoka maloba ya monoko na Ye. \q1 Bolakisa bana na bino ya basi banzembo ya mawa \q2 mpe tika ete moko na moko \q2 ayekolisa moninga na ye nzembo ya mawa. \q1 \v 21 Kufa emati mpe ekoti \q2 na nzela ya maninisa na biso, \q1 ekoti kino na bandako na biso, \q2 oyo batonga makasi ; \q1 eyei kosilisa koboma bana na babalabala, \q2 mpe bilenge mibali na bisika oyo bato ebele bokutanaka. \q1 \v 22 Loba : « Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 ‹ Bibembe ya bato ekolala na mabele \q1 mpe ekotikala wana lokola fimie ya bilanga, \q2 lokola liboke ya bambuma oyo mobuki bambuma atiki \q1 na sima na ye \q2 mpe moto oyo akolokota yango azali te. › » \s1 Bwanya ya solo \p \v 23 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Tika ete moto ya bwanya amikumisa te \q2 mpo na bwanya na ye \q1 to moto ya makasi mpo na makasi na ye \q2 to moto ya bozwi mpo na bozwi na ye. \q1 \v 24 Kasi tika ete moto oyo alingi komikumisa amikumisa \q2 mpo ete azali na bososoli mpe ayebi Ngai, \q1 mpo ete ayebi ete nazali Yawe oyo atalisaka bolamu, \q2 bosembo mpe boyengebene na mokili ; \q1 pamba te nasepelaka nde na makambo wana, » \q2 elobi Yawe. \p \v 25 « Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakopesa etumbu na bato nyonso oyo bakatama ngenga kaka na nzoto, kasi na mitema te : \v 26 bato ya Ejipito, ya Yuda, ya Edomi, ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi nyonso ya esobe oyo bamikataka mandefu ; pamba te bato ya bikolo oyo nyonso bakatama ngenga te. Mpe ezala bana nyonso ya Isalaele oyo bakatama ngenga, bakatama yango kaka na bonzoto, kasi na mitema te. » \c 10 \s1 Nzambe ya solo mpe banzambe ya lokuta \p \v 1 Eh libota ya Isalaele, yoka liloba oyo Yawe azali koloba na yo ! \v 2 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Kolanda bizaleli ya bikolo ya bapaya te \q2 mpe kobanga bilembo ya likolo te \q2 ata soki ezali kobangisa bato ya bikolo. \q1 \v 3 Pamba te bizaleli ya bikolo ya bapaya ezali se pamba, \q2 banzambe na bango ezali se banzete ya pamba \q1 oyo bakataka kati na zamba, \q2 bongo moto ya misala ya maboko nde abongisaka yango \q2 na bambeli na ye. \q1 \v 4 Bapakolaka yango palata mpe wolo, \q2 babetaka yango basete na marto mpo ete eningana te. \q1 \v 5 Banzambe yango ya bikeko ezali lokola bikeko \q2 oyo batiaka na elanga ya bapasiteki \q1 mpo na kokimisa bandeke : \q2 elobaka te, bamemaka yango mpo ete etambolaka te. \q1 Kobanga yango te, \q2 pamba te ekokaka kosala bato mabe to malamu te. » \b \q1 \v 6 Eh Yawe, moko te akokani na Yo ! \q2 Ozali monene, mpe Kombo na Yo ezali na nguya monene. \q1 \v 7 Oh Mokonzi ya bikolo, \q2 nani akoki koboya kotosa Yo ? \q1 Obongi na lokumu, \q2 pamba te moko te azali lokola Yo \q1 kati na bato nyonso ya bwanya ya bikolo \q2 mpe kati na mikili na bango nyonso. \b \q1 \v 8 Bango nyonso bazangi mayele mpe bazali bazoba ; \q2 mateya na bango ezalaka ya pamba, \q2 mpe banzambe na bango ezalaka se banzete ya pamba ! \q1 \v 9 Bapakola yango palata balekisa na moto, \q2 oyo ewuta na Tarsisi, \q1 mpe wolo oyo ewuta na Ufazi ; \q2 bato oyo basalaka bililingi na banzete \q1 mpe ba-oyo balambaka bibende na moto \q2 nde basalaka yango : \q1 balatisaka yango bilamba ya langi ya ble mpe ya motane ; \q2 ezali misala ya bato oyo basalaka misala ya maboko, \q2 oyo bayebi penza mosala malamu. \q1 \v 10 Kasi Yawe azali Nzambe ya solo, \q2 Nzambe na bomoi mpe Mokonzi ya seko. \q1 Soki asiliki, mokili eninganaka, \q2 bikolo ekokoka te kotelema liboso ya kanda na Ye. \p \v 11 Tala maloba oyo bokoloba na bango : « Banzambe oyo esala te likolo mpe mabele ekolimwa na mabele mpe na se ya likolo. » \q1 \v 12 Kasi Yawe asala mabele na nguya na Ye, \q2 alendisa mokili na bwanya na Ye \q2 mpe atanda likolo na mayele na Ye. \q1 \v 13 Tango agangaka, mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo, \q2 asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili, \q1 apelisaka mikalikali, \q2 anokisaka mvula mpe abimisaka mopepe \q2 wuta na bibombelo na Ye. \b \q1 \v 14 Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, \q2 lokola bato oyo basili mayele ; \q1 monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, \q2 pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, \q2 ezalaka na pema te kati na yango. \q1 \v 15 Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola ; \q2 ekolimwa na tango ya kosambisama. \q1 \v 16 Kasi Ye oyo azali libula ya Jakobi \q2 akokani na bikeko wana te, \q1 pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, \q2 ezala ata Isalaele, ekolo oyo ezali libula na Ye ; \q2 Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga. \s1 Etumbu ekoya \q1 \v 17 Yo ekolo oyo bazingeli, \q2 kamata bisaka na yo mpe bima na mokili ! \q1 \v 18 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Ya mbala oyo, nakobengana bavandi ya mokili oyo \q1 mpe nakotindela bango pasi \q2 mpo ete bakanga bango. » \b \q1 \v 19 Mawa na ngai, pamba te nazoki makasi na motema ! \q2 Pota na ngai ezali kosila te ! \q1 Namilobelaki : « Ezali pasi na ngai moko, \q2 esengeli na ngai kokanga motema. » \q1 \v 20 Ndako na ngai ya kapo ebebisami, \q2 basinga na yango nyonso ekatani, \q1 bamemi bana na ngai ya mibali, \q2 natikali lisusu ata na mwana moko te. \q1 Nazali lisusu na moto ata moko te \q2 oyo akotelemisela ngai ndako ya kapo \q2 to akobongisela ngai esika ya kovanda. \b \q1 \v 21 Pamba te bakambi bazangaki mayele, \q2 balukaki Yawe te ; \q1 yango wana, balongaki te, \q2 mpe bato nyonso oyo bango bazalaki kokamba bapanzanaki. \q1 \v 22 Boyoka ! Makelele moko ezali koya, \q2 lokito moko ya makasi ewuti na mokili ya nor, \q1 ekosilisa bato kati na bingumba ya Yuda \q2 mpe ekokomisa yango bandako ya mbwa ya zamba. \s1 Libondeli ya Jeremi \q1 \v 23 Oh Yawe, nayebi ete moto moko te \q2 azali mokonzi ya bomoi na ye ; \q1 moto oyo azali kotambola \q2 azali na bokonzi te ya kokamba matambe na ye. \q1 \v 24 Oh Yawe, pesa biso etumbu oyo ekoki na biso ; \q2 kasi kopesa yango na kanda te, \q2 noki te okosilisa koboma biso. \q1 \v 25 Sopa kanda na Yo likolo ya bikolo ya bapaya \q2 oyo endimaka Yo te, \q1 likolo ya bato oyo babelelaka Kombo na Yo te, \q2 pamba te babebisi Jakobi, \q2 babebisi ye mobimba mpe bapanzi mokili na ye. \c 11 \s1 Boyokani ebebi \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : \pi1 \v 2 — Boyoka malako ya boyokani oyo, mpe boyebisa yango epai ya bato ya Yuda mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi ! \v 3 Loba na bango : « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Tika ete alakelama mabe, moto oyo akotosa te malako ya boyokani \v 4 oyo nasalaki elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, wuta na libulu ya moto oyo balambelaka bibende. » Nalobaki na bango : « Botosa Ngai mpe bosala makambo nyonso oyo nakotinda bino ; ezali na nzela wana nde bokozala bato na Ngai mpe Ngai nakozala Nzambe na bino. \v 5 Bongo nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya bakoko na bino ete nakopesa bango mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo bozali na yango lelo. » \p Nazongisaki : \pi1 — Solo, Yawe ; amen ! \p \v 6 Yawe alobaki na ngai : \pi1 — Sakola maloba nyonso oyo kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi : « Boyoka malako ya boyokani oyo mpe bosalela yango ! \v 7 Wuta tango nabimisaki bakoko na bino na Ejipito kino na mokolo ya lelo, nazalaki tango na tango kokebisa bango na maloba oyo : ‹ Botosa Ngai ! › \v 8 Kasi batiaki matoyi mangongi mpe bayokelaki Ngai te. Balandaki kaka makanisi mabe ya mitema na bango. Yango wana, natindelaki bango bilakeli mabe nyonso oyo ezali kati na boyokani oyo natindaki bango ete batosa, kasi bango basalelaki yango te. » \p \v 9 Yawe alobaki na ngai : \pi1 — Bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi basali likita. \v 10 Bazongeli kosala masumu ya bakoko na bango, oyo baboyaki koyoka maloba na Ngai. Bazali kolanda banzambe mosusu mpo na kosalela yango. Libota ya Yuda mpe libota ya Isalaele babebisi boyokani oyo nasalaki elongo na bakoko na bango. \v 11 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela bango pasi ya makasi, mpe ata moto moko te akobika na yango. Ata soki bagangi epai na Ngai, nakoyoka bango te. \v 12 Bingumba ya Yuda mpe bato ya Yelusalemi bakokende koganga epai ya banzambe ya bikeko oyo bazali kotumbela malasi ya ansa, kasi ekokoka kobikisa bango te tango pasi ya makasi ekokomela bango. \v 13 Oh Yuda, ozali na banzambe ebele ndenge ezali motango ya bingumba na yo ; mpe lisusu, bitumbelo oyo otongaki mpo na kotumbela nzambe Bala, nzambe ya soni, malasi ya ansa ezali ebele ndenge ezali motango ya babalabala ya Yelusalemi. » \pi1 \v 14 Kasi yo Jeremi, kosambela mpo na bato oyo te, kolobela Ngai na tina na bango te, komeka te kosengela bango eloko ; pamba te nakoyoka bango te tango bakobelela Ngai na tango ya pasi. \s1 Isalaele : nzete ya olive ya Yawe \q1 \v 15 « Eloko nini penza molingami na Ngai azali kosala \q2 kati na Tempelo na Ngai, wana azali kosala mabongisi mabe ebele ? \q1 Okanisi ete ndayi mpe misuni oyo ebulisama \q2 ekoki solo kolongola etumbu na yo ? \q2 Boni, okanisi ete okoki kobika na nzela wana ? » \b \q1 \v 16 Yawe azalaki kobenga yo \q2 « Nzete ya olive ya mobesu \q1 oyo etonda na mbuma kitoko. » \q2 Kasi Yawe akotumba yango \q1 na makelele ya mopepe makasi, \q2 mpe bitape na yango ekobukana-bukana. \m \v 17 Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo alonaki yo asili kozwa mokano ya kotindela yo pasi ya makasi, pamba te libota ya Yuda mpe ya Isalaele basali mabe liboso na Ngai mpe batumboli kanda na Ngai tango bazali kotumbela nzambe Bala malasi ya ansa. \s1 Basaleli Jeremi likita \p \v 18 Lokola Yawe alakisaki ngai likita oyo bazalaki kosalela ngai, nasosolaki yango, pamba te atalisaki ngai mabongisi nyonso oyo bazalaki kosala. \v 19 Ngai namonanaki lokola mwana meme oyo bazali komema na esika oyo babomelaka bibwele ; nayebaki te ete bazali kosalela ngai likita tango bazalaki koloba : \q1 « Tika ete tobebisa nzete mpe mbuma na yango, \q2 tika ete tolongola ye na mokili ya bato ya bomoi \q2 mpo ete bakanisa lisusu kombo na ye te. » \q1 \v 20 Kasi Yo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 Yo oyo osambisaka na bosembo \q1 mpe omekaka mitema mpe makanisi, \q2 sala ete namona mabe oyo okozongisela bango, \q2 pamba te natiki likambo na ngai na maboko na yo. \p \v 21 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato ya Anatoti, oyo balingi koboma yo mpe bazali koloba : « Kosakola na Kombo na Yawe te, soki te tokoboma yo ; » \v 22 yango wana tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakopesa bango etumbu. Bilenge mibali na bango bakokufa na mopanga, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakokufa na nzala makasi. \v 23 Ata moko te kati na bango akobika, pamba te nakotindela bato ya Anatoti pasi, na mobu ya etumbu na bango. » \c 12 \s1 Mituna ya Jeremi \q1 \v 1 Oh Yawe, ozalaka tango nyonso sembo ; \q2 mpe ngai nakokoka kosamba na Yo te. \q1 Nzokande nalingi kotuna Yo mwa mituna \q2 na tina na oyo etali bosembo na Yo. \q1 Mpo na nini misala ya bato mabe ekendaka liboso ? \q2 Mpo na nini bato oyo batosaka Yo te \q2 bazalaka na bomoi ya kimia ? \q1 \v 2 Olonaki bango mpe bazwi misisa ; \q2 bazali kokola mpe kobota mbuma. \q1 Ozali tango nyonso pene ya minoko na bango, \q2 kasi mosika ya mitema na bango. \q1 \v 3 Nzokande, oh Yawe, oyebi ngai, \q2 omonaka ngai mpe oyebi \q1 makanisi ya motema na ngai mpo na Yo. \q2 Tindika bango lokola bameme \q1 oyo babongisi mpo na koboma ! \q2 Bongisa bango mpo na mokolo ya kufa. \q1 \v 4 Kino tango nini mokili ekowumela na kolela \q2 mpe matiti ya bilanga nyonso \q1 ekowumela ya kokawuka ? \q2 Banyama mpe bandeke esili kokufa \q1 mpo ete bavandi ya mokili bazali mabe. \q2 Balobaka : \q1 « Yawe akoyeba te makambo oyo ekokomela biso. » \s1 Eyano ya Yawe \q1 \v 5 Soki ozali kosala momekano \q2 ya kokima mbangu elongo na bato \q1 oyo bazali kotambola na makolo, \q2 mpe bango bazali komelisa yo pema, \q1 ndenge nini okoki komekana \q2 na bato oyo batambolaka likolo ya bampunda ? \q1 Soki ozali komitungisa na mokili oyo ezali na kimia, \q2 ekozala boni liboso ya mpela ya ebale Yordani ? \m \v 6 Pamba te ezala bandeko na yo mpe bato ya libota na yo moko bateki yo, bazali koganga makasi mpo na kotelemela yo. Kotiela bango motema te, ata tango bazali kobimisa maloba kitoko mpo na yo. \q1 \v 7 Nakobosana libota na ngai, \q2 nakosundola libula na ngai, \q1 nakokaba molingami na ngai \q2 na maboko ya banguna na ye. \q1 \v 8 Libula na ngai ekomi na miso na ngai \q2 lokola nkosi ya zamba : \q2 ezali kogangela ngai ; yango wana nayini yango. \q1 \v 9 Boni, libula na ngai ekomi na miso na ngai \q2 lokola ndeke oyo eliaka misuni, bongo ebebi na makila, \q1 mpo ete bandeke mosusu oyo eliaka misuni \q2 eya kozingela mpe kobundisa yango ? \q1 Bokende kosangisa banyama nyonso ya zamba \q2 mpe bobengisa yango mpo ete eya kolia nyama ! \q1 \v 10 Babateli ebele ya bibwele babebisi elanga na ngai ya vino, \q2 banyati-nyati elanga na ngai, \q1 babongoli elanga na ngai ya kitoko \q2 mabele ya kokawuka. \q1 \v 11 Bakomisi yango esobe, \q2 etikali pamba na miso na ngai, \q1 ekomi eloko ya mawa. \q2 Mokili mobimba ebebisami, \q1 pamba te moto moko te azali lisusu \q2 komema yango na motema. \b \q1 \v 12 Babebisi bakobimela \q2 na likolo ya bangomba nyonso ya esobe, \q1 pamba te mopanga ya Yawe ekoboma mokili mobimba ; \q2 moto moko te akozala na kimia. \q1 \v 13 Bakolona ble, \q2 kasi bakobuka banzube ; \q1 bakobimisa mitoki na mosala, \q2 kasi bakozwa litomba ya malonga te. \q1 Boye, boyokela mbuma ya bilanga na bino soni, \q2 mpo na kanda makasi ya Yawe. \p \v 14 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakobengana bato mabe oyo bavandaka zingazinga ya ekolo na Ngai, oyo bazali kobundisa libula oyo napesaki bato na Ngai, Isalaele, mpe nakolongola ekolo ya Yuda kati na bango. \v 15 Kasi sima na Ngai kobengana bango, nakoyokela bango lisusu mawa mpe nakozongisa moko na moko kati na libula na ye mpe kati na mokili na ye. \v 16 Mpe soki bayekoli malamu bizaleli ya bato na Ngai mpe balapi ndayi na Kombo na Ngai, na maloba oyo : ‹ Na Kombo na Yawe, › ndenge balakisaki bato na Ngai kolapa ndayi na kombo ya Bala, nakopesa bango esika kati na bato na Ngai. \v 17 Kasi ekolo oyo ekoyoka te, nakobengana bango nyonso mpe nakobebisa bango, » elobi Yawe. \c 13 \s1 Mokaba ya lino \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kosomba mokaba ya lino mpe lata yango na loketo na yo, kasi kopolisa yango na mayi te. » \p \v 2 Boye, nasombaki mokaba, ndenge Yawe atindaki ngai mpe nalataki yango na loketo na ngai. \p \v 3 Yawe alobaki na ngai lisusu na mbala ya mibale : \v 4 « Kamata mokaba oyo osombaki mpe oyo olati na loketo na yo, kende sik’oyo na Perati mpe bomba yango kuna kati na madusu ya mabanga. » \p \v 5 Boye nakendeki kobomba mokaba yango na Perati, ndenge Yawe alobaki na ngai. \p \v 6 Sima na mikolo ebele, Yawe alobaki na ngai lisusu : « Kende kokamata mokaba oyo nalobaki na yo ete obomba na Perati. » \p \v 7 Nakendeki na Perati, nalukaki mokaba yango epai nabombaki yango ; kasi mokaba yango ebebaki makasi mpe etikalaki lisusu na tina te. \p \v 8 Bongo Yawe alobaki na ngai : \v 9 « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Ezali boye nde nakosilisa lolendo ya Yuda mpe nakokitisa mapeka ya Yelusalemi. \v 10 Bato oyo bazali bato mabe, bayokaka maloba na Ngai te, bazali mito makasi, batingamaka kosala kolanda baposa ya mitema na bango, mpe balandaka banzambe ya bapaya mpo na kosalela mpe kogumbamela yango ; bakokoma kaka lokola mokaba oyo, mokaba oyo etikali lisusu na tina te. \v 11 Pamba te ndenge balingaka mokaba na loketo, ndenge wana mpe nalingaki libota mobimba ya Isalaele mpe libota mobimba ya Yuda epai na Ngai, › elobi Yawe, ‹ mpo ete bazala bato na Ngai mpe basala lokumu ya Kombo na Ngai. Kasi batikali koyoka Ngai te. › \s1 Vino ya kanda \pi1 \v 12 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino. › Mpe soki batuni yo : ‹ Boni, okanisi ete biso toyebi te ete mbeki nyonso esengeli kotonda na masanga ya vino ? › \v 13 Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakolangwisa bavandi nyonso ya mokili oyo masanga ; ezala bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bavandi nyonso ya Yelusalemi. \v 14 Nakosala ete babomana bango na bango, batata mpe bana na bango, elobi Yawe, eloko moko te ekopekisa Ngai koboma bango, ezala motema monene to mawa to ngolu. › » \s1 Makebisi mpo na kokima bowumbu \q1 \v 15 Boyoka malamu mpe bosala keba ! \q2 Bosala lolendo te, \q2 pamba te ezali Yawe nde alobi. \q1 \v 16 Bopesa nkembo epai na Yawe, Nzambe na bino, \q2 liboso ete amemela bino molili, \q1 liboso ete makolo na bino ebeta mabaku \q2 na bangomba oyo ezipami na molili. \q1 Bino bozali kozela pole, \q2 kasi Ye akobongola yango molili makasi. \q1 \v 17 Soki boyoki te, \q2 nakolela na nkuku mpo na lolendo na bino, \q1 nakolela makasi, mpe miso na ngai ekosopa mpinzoli, \q2 pamba te etonga ya Yawe ekokende na bowumbu. \b \q1 \v 18 Loba na mokonzi mpe na mama ya mokonzi : \q2 « Bolongwa na bakiti na bino ya bokonzi, \q2 pamba te mitole na bino ya nkembo ekolongwa na mito na bino. » \q1 \v 19 Bingumba ya sude ekokangama, \q2 mpe moto moko te akokoka kofungola yango. \q1 Bato nyonso ya Yuda bakokende na bowumbu, \q2 bango nyonso penza bakokende. \b \q1 \v 20 Oh Yelusalemi, tombola miso na yo mpe tala, \q2 bato bazali koya wuta na nor ! \q1 Wapi bibwele oyo bapesaki yo ete obatela, \q2 mpe wapi meme oyo ozalaki kobetela tolo ? \q1 \v 21 Okoloba nini soki Yawe atie yo na makasi \q2 na se ya bokonzi ya bato oyo yo oteyaki. \q1 Okokoma na pasi te \q2 lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota ? \q1 \v 22 Mpe soki omituni : \q2 « Mpo na nini makambo ya boye ekomeli ngai ? » \q1 Ezali mpo na ebele ya masumu na yo \q2 nde bapasolaki yo bilamba \q2 mpe bazokisaki nzoto na yo. \q1 \v 23 Boni, moto mwindo akoki solo kobongola \q2 poso ya nzoto na ye ? \q1 Nkoyi ekoki kolongola penza \q2 matono ya poso ya nzoto na yango ? \q1 Bokokoka kosala malamu te, \q2 bino bato oyo bomesana kosala mabe. \b \q1 \v 24 « Nakopanza bino lokola matiti ya kokawuka \q2 oyo mopepe ya esobe ememaka. \q1 \v 25 Yango nde etumbu na yo, \q2 mbano oyo nakatelaki yo, » elobi Yawe, \q1 « pamba te bobosanaki Ngai \q2 mpe botiaki mitema epai ya banzambe ya lokuta. \q1 \v 26 Nakotombola yo bilamba kino na elongi \q2 mpo ete bato bamona bolumbu na yo. \q1 \v 27 Namoni bondumba na yo \q2 mpe posa na yo ya kosangisa nzoto ; \q1 ekobo na yo ezali na soni ata moke te. \q2 Namoni banzambe na yo ya bikeko \q1 na likolo ya bangomba mpe kati na bilanga. \q2 Mawa na yo Yelusalemi, ozali peto te ! \q2 Kino tango nini okozala mbindo ? » \c 14 \s1 Bokawuki, nzala makasi mpe mopanga \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi na tina na bokawuki : \q1 \v 2 « Bato ya Yuda bazali na matanga, \q2 bingumba na bango esili kobebisama, \q1 bazali kolela mpo na mokili na bango, \q2 mpe koganga ezali koyokana wuta na Yelusalemi. \q1 \v 3 Bakambi bazali kotinda basali na bango \q2 mpo ete bakende kotoka mayi ; \q1 kasi soki bakomi na libulu ya mayi, mayi ezali te, \q2 bongo bazali kozonga na mbeki ya pamba, \q2 bazipi bilongi na soni mpe na mawa. \q1 \v 4 Mabele esili kokawuka, \q2 pamba te mvula ezali konoka lisusu te, \q1 basali bilanga bakomi na pasi \q2 mpe bazipi bilongi na bango mpo na soni. \q1 \v 5 Ezala mboloko kati na zamba ekomi kokima \q2 ata mwana na yango oyo esili kobota, \q2 pamba te matiti ya kolia ezali lisusu te. \q1 \v 6 Ba-ane ya zamba etelemi \q2 na basonge ya bangomba ekawuka \q1 mpe ezali kobenda mopepe lokola mbwa ya zamba ; \q2 miso na yango elembi kotala, \q2 pamba te matiti ya kolia ezali te. » \b \q1 \v 7 Oh Yawe, ata masumu na biso ezali kofunda biso, \q2 sala mpo na lokumu ya Kombo na Yo, \q1 pamba te towangani Yo mpe mingi, \q2 tosalaki masumu liboso na Yo. \q1 \v 8 Oh Elikya ya Isalaele, \q2 Mobikisi na ye na tango ya pasi, \q1 mpo na nini ozali kosala makambo \q2 lokola mopaya kati na mboka oyo \q1 to lokola moleki nzela oyo atelemaka kaka na mboka \q2 mpo na kolekisa butu ? \q1 \v 9 Mpo na nini ozali kosala makambo \q2 lokola moto oyo asutuki \q1 to lokola elombe oyo azangi makoki ya kobikisa moto ? \q2 Nzokande, Yo, Yawe, ozali kati na biso \q1 mpe tobengami solo na Kombo na Yo ! \q2 Kosundola biso te ! \p \v 10 Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bato oyo : \q1 « Bato oyo balingaka kaka kotambola-tambola, \q2 bavandaka esika moko te. \q1 Yango wana, Yawe asepelaka na bango te, \q2 akobosana mabe na bango te \q1 mpe akopesa bango etumbu \q2 mpo na masumu na bango. » \p \v 11 Bongo, Yawe alobaki na ngai : \pi1 — Kosambela mpo na bolamu ya bato oyo te ! \v 12 Ata soki bakili bilei, nakoyoka kolela na bango te ; ata soki babonzi mbeka ya kotumba mpe ya bagato, nakondima yango te. Nzokande, nakobebisa bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka. \p \v 13 Kasi nazongiselaki Ye : \pi1 — Oh Nkolo Yawe, basakoli bazali kokoba koloba na bango : « Te ! Bokotikala komona mopanga to nzala makasi te, kasi nakopesa bino kimia ya solo na esika oyo. » \p \v 14 Yawe alobaki na ngai : \pi1 — Basakoli bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Natindaki bango te, naponaki bango te mpe nalobaki na bango likambo moko te. Bimoniseli mpe masakoli na bango ezali ya lokuta ; makambo nyonso oyo bazali kosakola ezali pamba, ewutaka nde na makanisi ya mitema na bango moko. \v 15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na basakoli oyo bazali koloba na Kombo na Ngai : « Natindaki bango te, atako bazali koloba : ‹ Mopanga mpe nzala makasi ekokweya na mokili oyo te. › Basakoli yango bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi. \v 16 Bongo, bato oyo bazali kondima masakoli na bango bakobwakama na libanda, na babalabala ya Yelusalemi likolo ya nzala makasi mpe ya mopanga. Moto moko te akozala mpo na kokunda bango, ezala bango to basi na bango to mpe bana na bango ya mibali to ya basi. Nakozongisela bango mabe na mabe oyo basalaki. \pi1 \v 17 Loba na bango maloba oyo : \q1 ‹ Butu mpe moyi, \q2 miso na ngai ezali kobimisa mpinzoli, \q1 ezali kokawuka te ! \q2 Pamba te moseka na ngai, bato na ngai, \q1 bazali na pasi mingi \q2 mpo ete babetami makasi. \q1 \v 18 Soki nakeyi na zamba, \q2 nazali komona bibembe ya bato \q1 oyo babomi na mopanga ; \q2 soki nakoti kati na engumba, \q1 nazali komona bato oyo bazali kokufa na nzala. \q2 Basakoli mpe Banganga-Nzambe bazali kososola \q2 likambo moko te tango bazali kotambola na mokili. › » \b \q1 \v 19 Boni, obwaki solo Yuda ? \q2 Oyini penza Siona ? \q1 Mpo na nini otindeli biso pasi makasi \q2 oyo ezangeli nzela ya kobika ? \q1 Tokanisaki ete tokozwa kimia ; \q2 nzokande, eloko moko ya malonga esalemi te ! \q1 Tokanisaki ete tokozala na nzoto kolongono ; \q2 nzokande, tozali kaka komona pasi na pasi ! \q1 \v 20 Oh Yawe, tososoli solo mabe na biso \q2 mpe masumu ya batata na biso ! \q2 Solo, tosali penza masumu liboso na Yo. \q1 \v 21 Koyina biso te mpo na lokumu ya Kombo na Yo ! \q2 Kobebisa te nkembo ya Kiti ya Bokonzi na Yo ! \q1 Kanisa boyokani oyo osalaki elongo na biso \q2 mpe kobebisa yango te ! \q1 \v 22 Boni, ezali na nzambe moko ya ekeko, kati na bikolo, \q2 oyo enokisaka mvula ? \q1 Boni, likolo ekoki penza konokisa yango moko mvula ? \q2 Te ! Ezali nde Yo, Yawe, Nzambe na biso ! \q1 Totie elikya na biso nyonso epai na Yo, \q2 pamba te Yo nde osala biloko oyo nyonso. \c 15 \s1 Etumbu ekolongwa te \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : « Ata soki Moyize mpe Samuele batelemi liboso na Ngai mpo na koloba na tina na bato oyo, nakotikala koyokela bato oyo mawa te. Bengana bato oyo liboso na ngai ! Tika ete bakende mosika na Ngai ! \v 2 Bongo soki batuni yo : ‹ Tokende wapi ? › Zongisela bango : \q1 ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 Tika ete bato oyo basengeli kokufa bakufa ! \q1 Tika ete bato oyo basengeli kokufa na mopanga \q2 bakufa na mopanga ! \q1 Tika ete bato oyo basengeli kokufa na nzala makasi \q2 bakufa na nzala makasi ! \q1 Mpe tika ete bato oyo basengeli kokende na bowumbu \q2 bakende na bowumbu ! › \p \v 3 Nakotindela bango babomi ya lolenge minei, » elobi Yawe : « mopanga, mpo na koboma bango ; mbwa mpo na koswa mpe kobenda bango ; banyama ya zamba mpe bandeke oyo eliaka misuni mpo na kolia mpe kopanza bango. \v 4 Nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, na miso ya bato ya bikolo nyonso ya mokili mpo na makambo nyonso oyo Manase, mwana mobali ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, asalaki kati na Yelusalemi. \q1 \v 5 Oh Yelusalemi, nani akoyokela yo mawa ? \q2 Nani akolela yo ? \q2 Nani akotelema mpo na kotuna basango na yo ? \q1 \v 6 Osundolaki Ngai, » elobi Yawe, \q2 « opesaki Ngai mokongo. \q1 Yango wana, loboko na Ngai ekobeta yo, \q2 mpe nakobebisa yo ; \q2 nakoyokela yo lisusu mawa te. \q1 \v 7 Nakoyungola bango na nzela ya bipepelo \q2 na bikuke ya engumba, \q1 nakobotola bango bana na bango \q2 mpe nakoboma bato na Ngai, \q2 pamba te babongoli bizaleli na bango te. \q1 \v 8 Basi na bango oyo bakufisa mibali, \q2 nakokomisa bango ebele koleka zelo ya ebale monene. \q1 Na ngonga ya midi, \q2 nakoyeisa mobebisi mpo na koboma \q1 bamama ya bana na bango ; \q2 nakokweyisela bango somo mpe pasi na mbalakata. \q1 \v 9 Mama ya bana sambo akolemba nzoto \q2 mpe akopema na pasi makasi. \q1 Moyi na ye ekolala wana mokolo ezali nanu kowumela : \q2 akoyokisama soni mpe akosambwa. \q1 Nakoboma na mopanga, bato oyo bakotikala na bomoi \q2 liboso ya banguna na bango, » \q2 elobi Yawe. \s1 Bileli ya Jeremi \q1 \v 10 Oh mama na ngai, mawa na ngai ! \q2 Mpo na nini obotaki ngai ! \q1 Nazali moto oyo mokili mobimba eswanisaka mpe etelemelaka. \q2 Nadefisa moto moko te eloko \q1 mpe nadefa eloko ya moto moko te, \q2 kasi bato nyonso balakelaka ngai kaka mabe. \p \v 11 Yawe alobaki : \q1 « Solo, nakokangola yo mpo na bolamu na yo ; \q2 solo, nakosala ete banguna na yo babondela yo \q2 na tango ya pasi mpe ya minyoko. \b \q1 \v 12 Boni, moto akoki penza kobuka ebende ? \q2 Ebende oyo ewuta penza na nor to ebende ya bronze ? \b \q1 \v 13 Nakosala ete babotola bino biloko \q2 mpe bomengo na bino ; \q1 bongo bakofuta bino yango te \q2 mpo na masumu na bino nyonso \q2 oyo bosalaki kati na mokili na bino mobimba. \q1 \v 14 Nakokomisa bino bawumbu ya banguna na bino \q2 kati na mokili oyo botikala ata koyeba te, \q1 pamba te kanda na Ngai ekopela lokola moto \q2 oyo ekotumba bino. » \b \q1 \v 15 Oh Yawe, oyebi makambo nyonso, \q2 kanisa ngai mpe batela ngai. \q1 Zongisa mabe na mabe ya banyokoli na ngai. \q2 Yo oyo osilikaka noki te, kosundola ngai te ! \q1 Tala ndenge nazali kondima koyoka soni \q2 kino sik’oyo mpo na Kombo na Yo ! \q1 \v 16 Tango kaka nayokaki maloba na Yo, \q2 nayambaki yango na esengo ; \q1 maloba yango esepelisaki ngai \q2 mpe etondisaki motema na ngai na esengo ; \q1 pamba te babengaka ngai na Kombo na Yo, \q2 Yawe, Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. \q1 \v 17 Natikala kovanda te kati na batioli \q2 to mpe kosepela elongo na bango. \q1 Natikalaki kaka ngai moko, \q2 pamba te loboko na yo ezalaki likolo na ngai \q2 mpe otondisaki ngai na kanda. \q1 \v 18 Mpo na nini pasi na ngai esilaka te \q2 mpe pota na ngai ya monene esilaka te ? \q1 Solo, namoni ete ozali mpo na ngai lokola etima ya lokuta, \q2 lokola mayi oyo bakoki kotiela motema te. \p \v 19 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Soki ozongi epai na Ngai, \q2 nakondima yo liboso na Ngai mpo ete osalela Ngai ; \q1 soki monoko na yo ezali kobimisa maloba ya tina, \q2 kasi maloba ya pamba-pamba te, \q1 okozala molobeli na Ngai. \q2 Tika ete bato oyo balanda yo ; \q2 kasi yo, kolanda bango te. \q1 \v 20 Nakokomisa yo lokola mir liboso ya bato oyo, \q2 mir moko ya makasi penza, mir ya bronze ; \q1 bakobundisa yo kasi bakolonga yo te, \q2 pamba te nazali elongo na yo \q1 mpo na kobikisa mpe kokangola yo, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 21 « Nakobikisa yo na maboko ya bato mabe \q2 mpe nakokangola yo na maboko ya bato \q2 oyo banyokolaka yo. » \c 16 \s1 Jeremi atikali ye moko \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \v 2 « Okobala te mpe okotikala kobota bana mibali to bana basi na esika oyo te. » \v 3 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na bana mibali mpe bana basi oyo bakobotama na mboka oyo, mpe na tina na basi oyo bazali bamama na bango mpe mibali oyo bazali batata na bango : \v 4 « Bakokufa na kufa ya somo, bakolela bango te mpe bakokunda bango te, kasi bakozala lokola matiti ya kopola na mabele. Bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, bongo bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. » \p \v 5 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Kokota na ndako oyo ezali na matanga te, kokende na matanga te mpe koyokela bato oyo bazali na matanga mawa te, pamba te nalongoli kimia na Ngai, bolingo na Ngai mpe mawa na Ngai epai ya bato oyo, » elobi Yawe, \v 6 « ezala mikolo to bana mike, bango nyonso bakosila kokufa kati na mokili oyo. Bakokunda bango te mpe bakosalela bango matanga te, bongo moto moko te akomikata banzoloko to kokokola suki ya moto mpo na bango. \v 7 Moto moko te akopesa bilei mpo na kobondisa bato oyo bazali na matanga sima na kufa, mpe moto moko te akopesa bango masanga mpo na kobondisa bango, ezala ata mpo na kufa ya batata to ya bamama na bango. \p \v 8 Mpe kokota te na ndako oyo bazali kosala feti mpo na kovanda mpe komela, \v 9 pamba te tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakosilisa kati na esika oyo, na miso na bino mpe na tango na bino, makelele ya esengo mpe makelele ya kosepela, mingongo ya babalani mpe ya babandami na libala. \p \v 10 Tango okotatola maloba oyo nyonso na bato oyo, soki batuni yo : ‹ Mpo na nini Yawe akateli biso etumbu ya pasi makasi boye ? Mabe nini tosalaki Ye ? Masumu nini tosalaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso ? › \v 11 Okoloba na bango : ‹ Ezali mpo ete batata na bino basundolaki Ngai, › elobi Yawe, ‹ basalaki banzambe ya bapaya, basalelaki yango mpe bafukamelaki yango. Batikaki Ngai mpe babatelaki Mobeko na Ngai te. \v 12 Bongo bino, bozali mpe kotambola na ezaleli mabe koleka ata ezaleli mabe ya batata na bino. Botala ndenge nini moko na moko kati na bino azali kolanda makanisi mabe ya motema na ye, na esika ya kotosa Ngai. \v 13 Yango wana, nakobwaka bino libanda ya mokili oyo mpe nakomema bino na mokili oyo, ezala bino to batata na bino, botikala koyeba te ; mpe kuna, bokosalela banzambe ya bapaya, butu mpe moyi ; pamba te nakoyokela bino mawa te. › \p \v 14 Yango wana, na mikolo oyo ezali koya, » elobi Yawe, « bato bakotika koloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito ; › \v 15 kasi bakokoma koloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na mokili ya nor mpe na mikili nyonso epai wapi abenganaki bango. › Nakozongisa bango na mokili na bango, mokili oyo napesaki bakoko na bango. \p \v 16 Solo, nakotinda balobi mbisi ebele, » elobi Yawe, « mpe bakoboma mbisi ebele ; bato ya bokila ebele mpe bakoboma banyama ebele na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse kino kati na madusu ya mabanga. \v 17 Nazali kotala malamu banzela na bango nyonso ; moto moko te akoki kobombama na miso na Ngai, mpe masumu na bango ekoki ata moke te kobombama na miso na Ngai. \v 18 Nakofutisa bango mbala mibale lifuti ya mabe na bango mpe ya masumu na bango, pamba te bakomisi mokili na Ngai mbindo na nzela ya bililingi mpe ya bikeko na bango oyo ezanga bomoi, mpe batondisi libula na Ngai na banzambe na bango ya bikeko mpe ya nkele. » \q1 \v 19 Oh Yawe, Makasi na ngai \q2 mpe Ndako na ngai batonga makasi, \q1 Ekimelo na ngai na tango ya pasi, \q2 bato ya bikolo nyonso bakoya epai na Yo \q1 wuta na basuka ya mokili mpe bakoloba : \q2 « Batata na biso bazalaki kaka \q1 na banzambe ya lokuta, banzambe ya pamba \q2 oyo etikalaki kosalela bango bolamu ata moko te. \q1 \v 20 Boni, bato bakoki solo komisalela banzambe, \q2 tango bango moko bazali banzambe te ? \b \q1 \v 21 Yango wana, nakolakisa bango, \q2 nakolakisa bango nguya mpe makasi na ngai ; \q1 bongo bakoyeba penza \q2 ete Kombo na Ngai ezali Yawe. » \b \c 17 \q1 \v 1 « Masumu ya Yuda ezali lokola makomi \q2 oyo bakoma na ekomeli ya ebende \q1 oyo ezali na songe ya diama ; \q2 bakoma yango na bitando ya mitema na bango \q2 mpe na maseke ya bitumbelo na bango. \q1 \v 2 Ndenge bakanisaka bana na bango ya mibali, \q2 ndenge wana mpe bakanisaka bitumbelo na bango \q1 mpe makonzi ya Ashera, nzambe mwasi, \q2 pembeni ya banzete ya mibesu \q2 na likolo ya bangomba. \q1 \v 3 Oh ngomba na Ngai kati na mokili, \q2 nakokaba lokola bomengo ya bitumba : \q1 biloko na yo, bozwi na yo nyonso \q2 mpe bisambelo na yo ya likolo ya bangomba \q2 mpo na masumu oyo osalaki kati na mokili na yo. \q1 \v 4 Likolo ya mabe na yo, \q2 okobungisa libula oyo napesaki yo, \q1 nakokomisa yo mowumbu ya banguna na yo \q2 kati na mokili oyo oyebi te ; \q1 pamba te opelisi kanda na Ngai, \q2 mpe ekopela mpo na libela. » \p \v 5 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Tika ete moto oyo atiaka elikya na moto, \q2 oyo ayekamelaka eloko ya pete \q1 mpe atalelaka Yawe te, \q2 alakelama mabe ! \q1 \v 6 Akozala lokola mwa nzete ekawuka kati na esobe ; \q2 akomona bolamu te tango ekoya, \q1 akovanda na bisika ya kokawuka ya esobe, \q2 na mokili ya mungwa epai wapi bato bazalaka te. \b \q1 \v 7 Kasi tika ete moto oyo atiaka elikya na Yawe \q2 mpe atalelaka Ye apambolama ! \q1 \v 8 Akozala lokola nzete oyo balona pembeni ya mayi, \q2 oyo epanzaka misisa na yango kino na mayi : \q1 ezalaka na somo ya moyi makasi te ; \q2 makasa na yango ezalaka kaka mibesu tango nyonso. \q1 Ezalaka na somo ya koya ya mobu ya bokawuki te \q2 mpe ebotaka mbuma tango nyonso. » \b \q1 \v 9 Motema eleki biloko nyonso na lokuta \q2 mpe ekoki kobika te ; \q2 nani akoki koyeba yango ? \b \q1 \v 10 « Ngai Yawe, \q2 nayebi motema mpe nasosolaka malamu \q1 makanisi na yango, \q2 mpo na kofuta moto na moto \q2 kolanda etamboli mpe misala na ye. » \b \q1 \v 11 Moto oyo azwaka bomengo na nzela ya sembo te \q2 azali lokola ndeke oyo evandeli maki ya ndeke mosusu. \q1 Boye, bomengo yango ekokima \q2 na kati-kati ya bomoi na ye \q1 mpe ekomonisa bozoba na ye \q2 na suka ya bomoi na ye. \b \q1 \v 12 Kiti ya Bokonzi ya nkembo, \q2 oyo enetolama wuta na ebandeli \q2 ezali nde Esika na biso ya bule. \q1 \v 13 Oh Yawe, Elikya ya Isalaele, \q2 bato nyonso oyo basundolaka Yo bakufaka soni, \q1 bato oyo bapesaka yo mokongo bakufaka, \q2 pamba te basundoli Yawe, Etima ya mayi na bomoi. \b \q1 \v 14 Oh Yawe, bikisa ngai mpe nakobika ; \q2 Oh Yawe, kangola ngai mpe nakokangolama, \q2 mpo ete nakumisaka nde Yo ! \q1 \v 15 Tala, bato oyo bazali koloba na ngai : \q2 « Wapi Liloba na Yawe ? \q2 Tika ete ekokisama sik’oyo ! » \q1 \v 16 Nzokande, naboyaki te kozala mobateli bibwele \q2 oyo alandaka nzela na Yo. \q1 Oyebi malamu ete nazalaki na posa \q2 ya komona mokolo ya pasi te. \q1 Maloba oyo ebimaka na monoko na ngai \q2 ebimaka nde liboso na Yo. \q1 \v 17 Kobangisa ngai te, pamba te ozali Ekimelo na ngai \q2 na tango ya pasi ! \q1 \v 18 Tika ete banyokoli na ngai bayokisama soni, \q2 kasi batela ngai ete nayokisama soni te ! \q1 Tika ete bango balenga na somo, \q2 kasi ngai nalenga na somo te. \q1 Tindela bango mokolo ya pasi, \q2 bebisa bango malamu mbala mibale. \s1 Kobulisa mokolo ya Saba \p \v 19 Tala liloba oyo Yawe alobaki na ngai : « Kende kotelema na ekuke ya bato, na ekuke oyo bakonzi ya Yuda bakotelaka mpe babimelaka. Kende mpe lisusu kotelema na bikuke nyonso ya Yelusalemi. \v 20 Loba na bango : ‹ Oh bino bakonzi mpe bato nyonso ya Yuda elongo na bino nyonso bavandi ya Yelusalemi, bino oyo bokotelaka na bikuke oyo, boyoka Liloba na Yawe ! \v 21 Tala liloba oyo Yawe alobi : Bosala keba ete moko te kati na bino amema mikumba na mokolo ya Saba to alekisa yango na bikuke ya Yelusalemi ; \v 22 moko te kati na bino abimisa mokumba na ndako na ye to asala mosala songolo na mokolo ya Saba. Kasi bozwa mokolo yango lokola mokolo ya bule ndenge natindaki bakoko na bino. \v 23 Nzokande, baboyaki koyoka, bayeisaki mito na bango makasi mpo na koboya kaka koyoka mpe kolanda mitindo na Ngai. \v 24 Kasi soki penza boyoki Ngai, elobi Yawe, soki bomemi mikumba te, soki bolekisi te mikumba na bikuke ya engumba oyo mpe soki bobulisi mokolo ya Saba, soki bosali ata mosala moko te na mokolo wana ya Saba, \v 25 bakonzi oyo bavandaka na kiti ya bokonzi ya Davidi bakokotela na bikuke ya engumba oyo elongo na bakalaka na bango ; bongo bango elongo na bakalaka na bango bakoya na likolo ya bashar mpe mpunda elongo na bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi ; bongo, bato bakovanda libela na libela na engumba oyo. \v 26 Bato bakowuta na bingumba ya Yuda mpe na mboka oyo ezali pene ya Yelusalemi, na etuka ya Benjame mpe na ngambo ya weste ya bangomba mikuse, na etuka ya bangomba mpe ya Negevi ; mpo na koya kobonza kati na Tempelo ya Yawe bambeka ya kotumba, bambeka mosusu, makabo ya bambuma mpe malasi ya ansa, mpo na kobonza makabo ya kozongisa matondi, kati na Tempelo ya Yawe. \v 27 Kasi soki botosi Ngai te mpe bobulisi te mokolo ya Saba, bongo bomemi mpe bolekisi mikumba na bino na bikuke ya Yelusalemi na mokolo ya Saba, nakopelisa moto oyo ekufaka te na bikuke ya Yelusalemi mpe ekozikisa bandako na yango nyonso oyo batonga makasi. › » \c 18 \s1 Ndako ya mosali mbeki \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi : \pi1 \v 2 — Kende na ndako ya mosali mbeki mpe, kuna, nakoyebisa yo makambo. \p \v 3 Boye, nakendeki na ndako ya mosali mbeki mpe nakutaki ye azali kosala mosala na ye. \v 4 Kasi mbeki oyo azalaki kosala na mabele oyo basalelaka bikeko ezalaki kokangama ye na maboko. Bongo, mosali mbeki yango asalaki mbeki mosusu wuta na mbeki oyo ebebaki, asalaki yango lisusu kitoko kolanda posa ya motema na ye. \v 5 Mpe kuna, Yawe alobaki na ngai : \pi1 \v 6 — Oh bana ya Isalaele, nakoki kosala bino te ndenge mosali mbeki oyo azali kosala, elobi Yawe ? Bana ya Isalaele, bozali te kati na maboko na Ngai lokola mabele oyo basalelaka bikeko kati na maboko ya mosali mbeki ? \v 7 Soki nazwi mokano ya kopikola, ya kokweyisa to ya kobebisa ekolo to mokili songolo, \v 8 bongo ekolo to mokili oyo nakebisi etiki kosala mabe, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa mpo na yango mpe nakolongola pasi oyo nakanaki kotindela yango. \v 9 To mpe lisusu, soki nazwi mokano ya kotonga to ya kolona ekolo to mokili pakala, \v 10 bongo ekolo to mokili yango ekomi kosala mabe na miso na Ngai mpe eboyi koyokela Ngai, nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kosalela yango bolamu. \pi1 \v 11 Yango wana, yebisa sik’oyo bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Tala, nasili kozwa mokano ya kotindela bino pasi, mpe nazali na mabongisi ya kosala bino mabe. Boye, tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe, abongola bizaleli mpe misala na ye. › \pi1 \v 12 Kasi bakozongisa : ‹ Ezali na tina te ! Tokokoba kaka kosala mabongisi ya mitema na biso, mpe moko na moko kati na biso akokoba kaka kolanda baposa mabe ya motema na ye. › » \s1 Isalaele abosani Yawe \p \v 13 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Boluka koyeba kati na bikolo \q2 soki nani asila koyoka makambo ya boye ! \q2 Isalaele, mboka kitoko, asali likambo ya mabe penza ! \q1 \v 14 Boni, bosila komona mvula ya pembe ya Libani \q2 kosila na bangomba na yango ? \q1 Bosila komona mayi ya malili oyo ekitaka \q2 na bangomba na yango kokawuka ? \q1 \v 15 Nzokande, bato na Ngai babosani Ngai, \q2 bazali kotumba malasi ya ansa \q1 mpo na banzambe ya bikeko oyo ezanga tina, \q2 oyo ebetisaka bango mabaku na nzela \q1 mpe epengwisaka bango na nzela ya kala, \q2 bongo ememaka bango na banzela mosusu \q2 oyo bafungola nanu te. \q1 \v 16 Mokili na bango ekotikala lisusu na bato te, \q2 ekokoma eloko ya kotiola mpo na tango nyonso, \q1 bongo bato nyonso oyo bakoleka wana \q2 bakokamwa mpe bakoningisa mito na bango. \q1 \v 17 Nakopanza bango liboso ya banguna na bango \q2 ndenge mopepe ya este esalaka. \q1 Tango bakokoma na pasi, \q2 nakopesa bango mokongo \q2 mpe nakolakisa bango elongi na Ngai te. » \s1 Likita mpo na kosala Jeremi mabe \p \v 18 Bazalaki koloba : « Boya ! Tika ete tosalela Jeremi likita mpo na kosala ye mabe, pamba te ezala ndenge nini, Banganga-Nzambe bakosila te mpo na koteya Mobeko, bato ya bwanya bakosila te mpo na kopesa toli, mpe basakoli bakosila te mpo na kosakola Liloba na Yawe. Boya ! Tika ete toboma ye na nzela ya lolemo, mpe tolanda te makambo oyo azali koloba ! » \q1 \v 19 Eh Yawe, yoka makambo oyo \q2 bafundi na ngai bazali koloba ! \q1 \v 20 Boni, bazongisaka solo mabe na malamu ? \q2 Tala, batimoli libulu mpo na kokunda ngai ! \q1 Kanisa ndenge nini natelemaki liboso na Yo \q2 mpo na koloba na tina na bolamu na bango, \q2 mpo ete kanda na Yo ekende mosika na bango. \q1 \v 21 Mpo na yango, boma bana na bango na nzala, \q2 kaba bango na mopanga ! \q1 Tika ete basi na bango bakufisa bana na bango \q2 mpe bakoma basi bakufisa mibali ! \q1 Tika ete kufa ekomela mibali na bango, \q2 mpe bilenge mibali na bango bakufa \q2 na mopanga ya bitumba. \q1 \v 22 Tika ete kolela eyokana wuta na bandako na bango \q2 tango okotindela bango banguna na pwasa, \q1 pamba te batimoli libulu mpo ete bakanga ngai \q2 mpe batie mitambo na makolo na ngai ! \q1 \v 23 Kasi Yo, Yawe, oyebi mabongisi nyonso \q2 oyo basali mpo na koboma ngai ; \q1 kolimbisa mabe na bango te, \q2 kolongola masumu na bango liboso na Yo te ! \q1 Tika ete balenga liboso na Yo ! \q2 Pesa bango etumbu na mokolo ya kanda na Yo. \c 19 \s1 Mbeki oyo ebukana \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobi : \pi1 — Kende kosomba mbeki epai ya mosali mbeki. Kende nzela moko na bakambi ya bato mpe bakambi ya Banganga-Nzambe ; \v 2 bimela na nzela ya Lubwaku ya Beni-Inomi, na liboso ya ekuke ya ndako epai wapi basalaka mbeki ; mpe kuna, okosakola maloba oyo nakoyebisa yo. \v 3 Loba : « Bino bakonzi ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka Liloba na Yawe ! Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boyoka ! Nakoyeisa pasi makasi na esika oyo ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango na yango, akozala na somo. \v 4 Lokola bato oyo basundoli Ngai mpe bakomisi esika oyo esika ya banzambe ya bapaya, lokola bakomi kotumba mbeka na esika oyo mpo na banzambe oyo ; ezala bango, batata na bango to bakonzi ya Yuda, batikalaki koyeba te, batondisi esika oyo na makila ya bato oyo basali mabe ata moko te, \v 5 batongi bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, mpo na kotumba bana na bango na moto lokola mbeka ya kotumba epai ya Bala ; nzokande Ngai natikala kotinda bango likambo ya boye te to mpe likambo ya boye etikala ata komata na makanisi na Ngai te ; \v 6 yango wana, na mikolo ekoya, elobi Yawe, bakobenga lisusu te esika oyo : ‹ Tofeti to Lubwaku ya Beni-Inomi, › kasi bakokoma kobenga yango : ‹ Lubwaku oyo babomelaka bato. › \pi1 \v 7 Kaka na esika oyo, nakobebisa mabongisi ya Yuda mpe ya Yelusalemi ; nakosala ete bakweya na mopanga ya banguna na bango mpe na maboko ya bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe. Nakokomisa bibembe na bango bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya zamba. \v 8 Nakobebisa engumba oyo mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola. Bato nyonso oyo bakolekela awa bakokamwa mpe bakoyoka somo wana bakomona kobeba na yango nyonso. \v 9 Nakoleisa bango misuni ya bana na bango ya basi mpe ya mibali, bakoliana bango na bango tango bato oyo bazali na posa ya kosala bango mabe bakozingela bango. \pi1 \v 10 Boye, buka mbeki na miso ya bato oyo bozali kokende na bango nzela moko \v 11 mpe loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Nakobebisa ekolo mpe engumba oyo, kaka ndenge bapanzaka mbeki oyo mosali mbeki asali, mpe bakokoka lisusu kobongisa yango te. Bakokunda bibembe na Tofeti kino esika ya kokunda ekotikala lisusu te. \v 12 Yango ezali makambo oyo nakosala na esika oyo mpe epai ya bavandi ya esika oyo, elobi Yawe, nakokomisa engumba oyo lokola Tofeti. \v 13 Bandako ya Yelusalemi mpe bandako ya bakonzi ya Yuda ekokoma mbindo lokola esika oyo na kombo Tofeti, bandako nyonso oyo, na likolo ya manzanza na yango, bazalaki kotumba malasi ya ansa mpo na mampinga nyonso ya likolo mpe bazalaki kobonza makabo ya masanga ya vino mpo na banzambe mosusu. › » \b \p \v 14 Jeremi azongaki wuta na Tofeti epai wapi Yawe atindaki ye mpo na kosakola, atelemaki na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe alobaki na bato nyonso : \pi1 \v 15 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na engumba oyo mpe na mboka oyo ezali zingazinga na yango pasi nyonso oyo nasakolaki na tina na yango, pamba te batosaki Ngai te mpe bayokaki maloba na ngai te. » \c 20 \s1 Jeremi na boloko \p \v 1 Nganga-Nzambe Pashuri, mwana mobali ya Imeri, mokonzi ya Tempelo ya Yawe, ayokaki ndenge Jeremi azalaki kosakola. \v 2 Nganga-Nzambe Pashuri abetisaki Mosakoli Jeremi fimbu mpe akangisaki ye na likonzi oyo ezalaki na ekuke ya likolo ya Benjame, ekuke oyo ememaka na Tempelo ya Yawe. \v 3 Mokolo oyo elandaki, tango Pashuri alongolaki ye na likonzi, Jeremi alobaki na ye : \pi1 — Yawe akobenga yo lisusu Pashuri te, kasi Magori-Misabibe\f + \fr 20.3 \fr*\ft Magori-Misabibe elingi koloba : somo na bangambo nyonso.\ft*\f*. \v 4 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo mpe balingami na yo nyonso makambo ya somo ; okomona na miso na yo ndenge nini bakokweya na mopanga liboso ya banguna na bango. Nakokaba Yuda nyonso na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akomema bango na bowumbu, na Babiloni, to akoboma bango na mopanga. \v 5 Nakokaba bozwi nyonso ya engumba oyo na maboko ya banguna na bango : biloko nyonso ya engumba, biloko ya talo mpe bomengo nyonso ya mokonzi ya Yuda ; bakokamata yango mpe bakomema yango na mokili ya Babiloni. \v 6 Mpo na yo Pashuri mpe bavandi nyonso ya ndako na yo, bokokende na bowumbu na mokili ya Babiloni. Bokokufa mpe bakokunda bino kuna, ezala yo to balingami na yo nyonso oyo bosakolaki makambo ya lokuta epai na bango. » \s1 Kolela ya Jeremi \q1 \v 7 Eh Yawe, okosaki-kosaki ngai, \q2 mpe nakosamaki penza ; \q1 olekaki ngai na makasi mpe olongaki ngai. \q2 Bazali kotiola ngai mikolo nyonso, \q2 bato nyonso bazali kaka koseka ngai. \q1 \v 8 Na tango nyonso oyo nalobaka, \q2 nagangaka makasi mpo na kosakola \q1 kaka mobulu mpe kobebisama. \q2 Mokolo na mokolo, \q1 Liloba na Yawe ememelaka ngai \q2 kofingama mpe pamela ya mabe. \q1 \v 9 Kasi soki nalobi : « Nakotanga lisusu Kombo na Ye te, » \q2 Liloba na Ye kati na motema na ngai \q1 ekomaka lokola moto oyo ezali kopela \q2 kino na mikuwa na ngai ; \q1 nalongaka te kokanga yango, \q2 nakokaka te ! \b \q1 \v 10 Nazali koyoka bato ebele koloba na se se se : \q2 « Botala ! Somo na bangambo nyonso ! \q1 Bofunda ye ! Tofunda ye ! » \q2 Baninga na ngai nyonso bazali kozela kokweya na ngai, \q1 bazali koloba : « Tango mosusu akokosama, \q2 tokokanga ye kaka mpe tokozongisela ye mabe ! » \b \q1 \v 11 Kasi Yawe azali elongo na ngai \q2 lokola Elombe ya bitumba ; \q1 boye, banyokoli na ngai bakokweya \q1 mpe mikano na bango ekokokisama te ; \q2 bakotikala na soni mpe bakolonga te, \q2 bakobosana ata mokolo moko te soni na bango. \q1 \v 12 Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 Yo oyo omonaka mitema ya bayengebene \q1 mpe oyebaka malamu makanisi ya mitema ya bato, \q2 tika ete namona Yo kozongisela bango mabe, \q2 pamba te napesi likambo na ngai na maboko na Yo ! \b \q1 \v 13 Boyembela Yawe ! Bokumisa Yawe ! \q2 Pamba te abikisaka bomoi ya mobola \q2 na maboko ya bato mabe. \b \q1 \v 14 Tika ete mokolo ya mbotama na ngai elakelama mabe ! \q2 Tika ete mokolo oyo mama na ngai abotaki ngai \q2 epambolama te ! \q1 \v 15 Tika ete alakelama mabe, \q2 moto oyo amemelaki tata na ngai sango \q1 oyo esepelisaki motema na ye : \q2 « Baboteli yo mwana, mwana mobali ! » \q1 \v 16 Tika ete moto yango akoma lokola bingumba \q2 oyo Yawe abuki na mawa te ! \q1 Tika ete ayoka bileli na tongo \q2 mpe makelele ya bitumba na midi. \q1 \v 17 Mpo na nini Nzambe abomaki ngai te \q2 kati na libumu ya mama na ngai, \q1 oyo alingaki kozala kunda na ngai, \q2 mpe libumu na ye elingaki kobomba ngai libela na libela ? \q1 \v 18 Mpo na nini penza nabimaki \q2 na libumu ya mama na ngai ? \q1 Ezali kaka mpo na komona pasi mpe mikakatano, \q2 mpe kosukisa bomoi na ngai na soni ? \c 21 \s1 Eyano epai ya mokonzi Sedesiasi \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi tango mokonzi Sedesiasi atindelaki ye Pashuri, mwana mobali ya Malikiya, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpo na koloba na ye : \v 2 « Tuna Yawe sik’oyo mpo na biso, pamba te Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, azali kobundisa biso ; tango mosusu Yawe akosala bikamwa mpo na biso ndenge asalaki na tango ya kala, mpo ete Nabukodonozori atika biso. » \p \v 3 Kasi Jeremi azongiselaki bango : « Boloba na Sedesiasi : \v 4 ‹ Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nakomi pene ya kosala ete bibundeli oyo ezali kati na maboko na bino, oyo bozali kosalela mpo na kobundisa mokonzi ya Babiloni mpe bato ya Chalide oyo bazingeli bino na libanda ya engumba, ebalukela bino ; mpe nakosangisa bango kati na engumba oyo. \v 5 Mpe Ngai moko, nakosembola loboko na Ngai mpo na kobundisa bino na nguya, na kanda, na kosilika mpe na kotomboka makasi. \v 6 Nakobebisa nyonso oyo ezali kati na engumba oyo : bato mpe banyama ; mpe bakokufa na bokono oyo ebomaka. \v 7 Sima na yango, elobi Yawe, nakokaba na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya banguna na bango oyo bazali na posa ya kosala bango mabe : Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe bavandi ya engumba oyo, ba-oyo bakobika na bokono oyo ebomaka, na mopanga mpe na nzala makasi. Nabukodonozori akoboma bango na mopanga, akokangela bango motema mpe akoyokela bango mawa te. › \p \v 8 Mpe lisusu, loba na bato : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Botala, nasili kotia liboso na bino nzela ya bomoi mpe nzela ya kufa. \v 9 Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka. Kasi moto oyo akobima mpe akokende komipesa na maboko ya bato ya Babiloni oyo bazingeli bino, akobikisa bomoi na ye mpe akokufa te. \v 10 Nazwaki mokano ya kosala engumba oyo mabe, kasi bolamu te, elobi Yawe ; nakokaba yango na maboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobebisa yango na moto. › \p \v 11 Loba na libota ya mokonzi ya Yuda : \q1 ‹ Boyoka Liloba na Yawe ! \q1 \v 12 Oh libota ya Davidi, tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 Kataka makambo na bosembo na tongo nyonso, \q1 bikisa monyokolami na maboko ya monyokoli ; \q2 soki te, likolo ya mabe oyo basalaki Ngai, \q1 kanda na Ngai ekopela mpe ekotumba lokola moto ; \q2 mpe ekozala na moto ata moko te mpo na koboma yango. \q1 \v 13 Oh Yelusalemi, yo oyo ovandaka na lubwaku, \q2 na mabanga ya etando ya likolo ya ngomba, \q1 nazali kosepela na yo te, elobi Yawe, \q1 yo oyo olobaka : ‘ Nani azali na makoki ya kobundisa biso ? \q2 Nani azali na makoki ya kokota na ekimelo na biso ? ’ \q1 \v 14 Nakopesa yo etumbu kolanda misala na yo, \q2 elobi Yawe, \q1 nakopelisa moto na zamba na yo, \q2 mpe ekotumba nyonso oyo ezali zingazinga na yo. › » \c 22 \s1 Kosambisama ya bakonzi ya mabe \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobi na Jeremi : « Kende na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe tatola maloba oyo : \v 2 ‹ Mokonzi ya Yuda, yo oyo ovandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, yoka Liloba na Yawe ! Yo, bakalaka na yo mpe bato na yo : bino nyonso oyo bolekelaka na nzela ya bikuke oyo, \v 3 tala liloba oyo Yawe alobi : Bosalela bosembo mpe bosolo ; bokangola wuta na maboko ya monyokoli moto oyo bazali konyokola ! Bonyokola te bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali ; bosala mpe bango mabe te. Bosopa te na esika oyo, makila ya bato oyo bayebi likambo te. \v 4 Pamba te soki bosaleli na bokebi mibeko oyo, bakonzi oyo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi bakolekela na bikuke ya ndako oyo, na likolo ya bashar mpe ya mpunda, elongo na bakalaka mpe bato na bango. \v 5 Kasi soki botosi mibeko oyo te, › elobi Yawe, ‹ nalapi ndayi na Kombo na Ngai ete ndako oyo ekobebisama. › » \p \v 6 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na ndako ya mokonzi ya Yuda : \q1 « Ata soki ozali lokola Galadi na miso na Ngai, \q2 lokola songe ya ngomba ya Libani ; \q1 solo, nakokomisa yo lokola esobe, \q2 lokola engumba oyo bato bavandaka te. \q1 \v 7 Nakotinda bato ete baya kobebisa yo, \q2 moto na moto na bibundeli na ye ; \q1 bongo bakokata banzete na yo ya sedele oyo ya kitoko \q2 mpe bakobwaka yango na moto. \p \v 8 Bato bakowuta na bikolo ya ndenge na ndenge bakolekela na engumba oyo mpe bakotunana : ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na engumba monene oyo ? › \p \v 9 Mpe eyano ekozala : ‹ Ezali mpo ete babebisi boyokani oyo basalaki elongo na Yawe, Nzambe na bango, bafukamelaki mpe basalelaki banzambe ya bapaya. › » \s1 Na tina na Shalumi, mokitani ya Joziasi \q1 \v 10 Bolela te mpo na kufa ya mokonzi \q2 to bosala matanga te mpo na kufa na ye ! \q1 Bolela, bolela nde makasi mpo na ye oyo akei na bowumbu, \q2 mpo ete akozonga lisusu te \q2 mpe akomona lisusu te mboka epai babota ye. \m \v 11 Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Shalumi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, oyo akitanaki na Joziasi, tata na ye, lokola mokonzi ya Yuda, kasi atikaki mboka na ye : « Akozonga lisusu te. \v 12 Akokufa na esika oyo bakomema ye na bowumbu, akomona lisusu mokili oyo te. » \b \s1 Na tina na Yeoyakimi \q1 \v 13 « Mawa na moto oyo atongaka ndako na ye \q2 na nzela ya bosembo te, \q1 mpe bashambre na ye ya etaje, \q2 na nzela ya lokuta ; \q1 oyo asalisaka bandeko na ye mosala ya pamba \q2 mpe afutaka bango eloko te ; \q1 \v 14 oyo alobaka : ‹ Nakotongisa ndako monene \q2 oyo ekozala na bashambre minene, na etaje ! › \q1 Boye atiaka yango maninisa minene, \q2 mabaya ya sedele na bamir na yango ya kati \q2 mpe akopakolaka yango langi ya motane. \b \q1 \v 15 Okanisi ete kotondisa ndako na mabaya ya sedele \q2 nde ekolendisa bokonzi na yo ? \q1 Tata na yo azangaki bilei mpe masanga te, \q2 kasi atambolaki na bosembo mpe na boyengebene ; \q2 boye alongaki na makambo nyonso. \q1 \v 16 Alongisaki babola mpe bato bakelela, \q2 mpe alongaki na makambo nyonso. \q1 Boni, yango te koyeba Ngai, » \q2 elobi Yawe ? \q1 \v 17 « Kasi yo, miso mpe motema na yo elukaka kaka \q2 bomengo mpo na bolamu na yo moko kaka, \q1 na nzela ya kosopa makila ya bato oyo bayebi likambo te, \q2 na nzela ya konyokola bato \q2 mpe na nzela ya kobotola bango biloko. » \m \v 18 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi mpo na Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda : \q1 « Bakosalela ye matanga te na koloba : \q2 ‹ Mawa, ndeko na ngai ya mobali ! \q1 Mawa, ndeko na ngai ya mwasi ! › \q2 Bakosalela ye matanga te na koloba : \q1 ‹ Mawa, nkolo na ngai ! \q2 Mawa, mokonzi na ngai ! › \q1 \v 19 Bakokunda ye ndenge bakundaka ane, \q2 bakobenda ye mpe bakobwaka ye \q2 libanda ya bikuke ya Yelusalemi. » \s1 Na tina na Yelusalemi \q1 \v 20 « Mata na Libani mpe ganga makasi ! \q2 Tika ete mongongo na yo eyokana kino na Bashani ! \q1 Ganga wuta na Abarimi, \q2 pamba te baninga na yo nyonso basili kokufa ! \q1 \v 21 Nakebisaki yo tango ozalaki na kimia \q2 kasi olobaki : ‹ Nakoyoka te ! › \q1 Ezaleli na yo ezalaka kaka boye wuta bolenge na yo, \q2 otosaka na yo Ngai te ! \q1 \v 22 Mopepe ekomema bakambi na yo nyonso \q2 mpe baninga na yo bakokende na bowumbu. \q1 Okoyoka soni mpe okosambwa \q2 likolo ya mabe na yo nyonso. \q1 \v 23 Yo oyo ovandaka na Libani, \q2 yo oyo otongaki zala na yo kati na bandako ya sedele, \q1 yeba ete okolela tango pasi ekokomela yo, \q2 pasi oyo ekokani na pasi ya mwasi \q2 oyo azali na pasi ya kobota ! \s1 Na tina na Konia, mwana mobali ya Yeoyakini \p \v 24 Na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « ata soki yo Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, ozalaki lokola lopete na mosapi ya loboko na Ngai ya mobali, nakolongola yo kaka. \v 25 Nakokaba yo na maboko ya bato oyo bazali na posa ya koboma yo, mpe na maboko ya bato oyo obangaka, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na bato ya Babiloni. \v 26 Nakobengana yo elongo na mama oyo abota yo na mokili mosusu epai wapi moko te kati na bino abotama, mpe ekozala kuna nde bino mibale bokokufa. \v 27 Bokotikala kozonga lisusu te na mokili oyo bozalaka na posa makasi ya kozonga. » \q1 \v 28 Boni, moto oyo, Konia, azali te mbeki ya kopasuka \q2 oyo etiolama to eloko oyo ezanga tina ? \q1 Mpo na nini babengana ye elongo na bana na ye \q2 mpe babwaka bango na mokili oyo bayebi te ? \q1 \v 29 Oh mokili na ngai, mokili na ngai, mokili na ngai ! \q2 Yoka Liloba na Yawe ! \q1 \v 30 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Koma kombo ya moto oyo \q1 lokola moto oyo abota te, \q2 lokola moto oyo akolonga te na bomoi na ye, \q1 pamba te moko te kati na bana na ye akolonga, \q2 moko te akovanda lisusu na kiti ya bokonzi ya Davidi \q2 to akozala lisusu mokonzi ya Yuda. » \c 23 \s1 Babateli mabe mpe Mobateli Malamu \p \v 1 « Mawa na babateli bibwele oyo bazali koboma mpe kobungisa bibwele na Ngai, » elobi Yawe. \v 2 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na babateli bibwele oyo bazali kobatela bato na Ngai : « Lokola bosili kopanza bibwele na Ngai, bobungisi bango nzela mpe bobateli bango malamu te, nakopesa bino etumbu mpo na mabe oyo bosili kosala, » elobi Yawe, \v 3 « Ngai moko nakosangisa ndambo ya bibwele na Ngai, oyo batikali wuta na bikolo nyonso epai wapi nabenganelaki bango ; mpe nakozongisa bango na lopango na bango, esika oyo bakobotana mpe bakokoma ebele. \v 4 Nakopesa bango na maboko ya babateli mosusu ya bibwele mpo ete babatela bango malamu. Boye, bakobanga lisusu te, bakozala lisusu na somo te mpe moko te kati na bango akozanga lisusu, » elobi Yawe. \q1 \v 5 « Na mikolo oyo ekoya, » elobi Yawe, \q2 « nakobimisa Moto ya nzete mpo na Davidi, \q1 mokonzi oyo akokamba na bwanya, \q2 oyo akosala kolanda bosembo mpe bosolo. \q1 \v 6 Na eleko ya mokonzi wana, mokili ya Yuda ekobikisama, \q2 mpe mokili ya Isalaele ekozala na kimia. \q1 Tala kombo oyo bakobengela ye : \q2 Yawe azali Bosembo na biso. \p \v 7 Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bato bakoloba lisusu te : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bana ya Isalaele na Ejipito ; › \v 8 kasi bakoloba : ‹ Na Kombo na Yawe oyo abimisaki bakitani ya Isalaele na mokili ya nor mpe na bikolo nyonso epai wapi abenganaki bango. › Bongo, bakovanda na mokili na bango moko. » \s1 Basakoli ya lokuta \p \v 9 Na tina na basakoli : \q1 Motema na ngai ebukani kati na ngai, \q2 mikuwa na ngai nyonso ezali kolenga. \q1 Nakomi lokola moto oyo alangwe masanga, \q2 lokola moto oyo masanga ya vino ebeti ye, \q2 likolo na Yawe mpe maloba na Ye ya bule. \q1 \v 10 Pamba te mokili etondi na kindumba, \q2 mokili ekomi na matanga. \q1 Likolo ya bilakeli mabe, \q2 matiti oyo bibwele eliaka na esobe ekawuki, \q1 basakoli bakomi kolanda nzela mabe \q2 mpe bakomi na molende ya kosala \q2 kaka makambo oyo esengeli te. \b \q1 \v 11 « Basakoli mpe Banganga-Nzambe, basundoli Nzambe ; \q2 ezala kati na Tempelo na Ngai, \q1 nazali komona misala na bango ya mabe, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 12 « Yango wana, nzela na bango ekokoma \q2 moselu mpe molili ; \q1 bakobengana bango kino na mboka ya molili \q2 mpe kuna bakokweya. \q1 Nakotindela bango pasi, \q2 tango oyo nakopesa bango etumbu, » \q2 elobi Yawe. \b \q1 \v 13 « Namoni makambo ya nkele \q2 kati na basakoli ya Samari : \q1 bazali kosakola na kombo ya nzambe Bala \q2 mpe bazali kobungisa Isalaele, bato na Ngai, nzela. \q1 \v 14 Namoni lisusu makambo ya nkele \q2 kati na basakoli ya Yelusalemi : \q1 bazali kosala kindumba mpe kowumela na lokuta, \q2 bazali kolendisa bato oyo basalaka mabe \q1 mpo ete batika te misala na bango ya mabe. \q2 Bango nyonso bazali liboso na Ngai lokola Sodome, \q2 bato ya Yelusalemi bazali lokola bato ya Gomore. » \p \v 15 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na basakoli : \q1 « Nakoleisa bango bilei ya bololo \q2 mpe nakomelisa bango mayi ya ngenge, \q1 pamba te ezali na nzela ya basakoli ya Yelusalemi \q2 nde bato ya mokili mobimba bobosani Nzambe. » \p \v 16 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q1 « Boyoka te makambo oyo basakoli \q2 bazali kosakola epai na bino ! \q1 \v 17 Bazali koloba na bato oyo batiolaka Ngai : \q2 ‹ Yawe alobi : Bokozala malamu ! › \q1 Mpe na bato oyo balandaka \q2 makanisi mabe ya mitema na bango : \q2 ‹ Mabe moko te ekokomela bino ! › \m \v 18 Kasi nani kati na basakoli wana akotaki na mayangani ya Yawe mpo ete amona to mpe ayoka Liloba na Yawe ? Nani apesaki litoyi mpo na koyoka liloba na Ye ? \q1 \v 19 Tala, mopepe makasi ya Yawe etomboki ! \q2 Kanda na Ye epeli lokola moto, \q2 bakake ezali konguluma mpe kokweyela bato mabe. \q1 \v 20 Kanda ya Yawe ekokita te \q2 kino ekokokisa malamu-malamu penza \q1 mabongisi ya motema na Ye ! \q2 Bokozwa mayele ya kososola yango malamu \q2 na mikolo oyo ekoya. \b \q1 \v 21 Natindaki basakoli wana te, \q2 kasi tala ndenge bapoti mbangu mpo na kokende ; \q1 nalobaki na bango likambo moko te, \q2 kasi tala bango wana bazali kosakola ! \q1 \v 22 Soki solo bazalaki na mayangani na Ngai, \q2 balingaki nde koloba maloba na Ngai epai ya bato na Ngai, \q1 mpe bato na Ngai balingaki kotika \q2 banzela mpe misala na bango ya mabe ! \b \q1 \v 23 Boni, bokanisi ete Ngai Nzambe namonaka kaka pene, \q2 kasi namonaka mosika te ? » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 24 « Boni, moto akoki solo kobombama na esika ya nkuku, \q2 bongo Ngai nazanga komona ye ? » \q2 elobi Yawe. \q1 « Boni, natondisa likolo mpe mabele te ? » \q2 elobi Yawe. \p \v 25 « Nayoki makambo oyo basakoli ya lokuta bazali kosakola na Kombo na Ngai ; bazali koloba : ‹ Tala, naloti ndoto ! Naloti ndoto ! › \v 26 Kino tango nini penza basakoli oyo bakokoba kosakola makambo ya lokuta, makanisi ya pamba ya mitema na bango ? \v 27 Bakanisi ete bakoki kosala ete bato na Ngai babosana Kombo na Ngai na nzela ya ndoto oyo bazali koloba bango na bango, ndenge batata na bango babosanaki Kombo na Ngai mpo na kosalela nzambe Bala ? \v 28 Tika ete mosakoli oyo aloti ndoto aloba yango, mpe tika ete moto oyo azali na liloba na Ngai aloba liloba na Ngai kolanda solo, ndenge yango ezali. Mpo na nini kosangisa matiti ya kokawuka na ble ? » elobi Yawe ; \v 29 « boni, maloba na Ngai ezali lokola moto te ? To lokola marto te oyo ebukaka mabanga biteni-biteni ? » elobi Yawe. \p \v 30 « Yango wana, nakotelemela basakoli oyo bawelaka bango na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe ; \v 31 « solo, nakotelemela basakoli oyo bafungolaka minoko na bango mpo na kokomisa maloba na bango maloba na Ngai, » elobi Yawe, \v 32 « nakotelemela basakoli oyo basakolaka bandoto ya lokuta, » elobi Yawe, « basakoli oyo bapengwisaka bato na Ngai na nzela ya maloba na bango ya lokuta tango balobaka bandoto yango ya lokuta ; nzokande Ngai natindaki bango te mpe napesaki bango ndingisa te ; ezali na tina ata moko te mpo na bato na Ngai, » elobi Yawe. \s1 Masakoli ya lokuta mpe basakoli ya lokuta \p \v 33 « Soki moko kati na bato oyo to mosakoli to Nganga-Nzambe atuni yo : ‹ Yawe alobi nini ? › \p Loba na ye : ‹ Yawe alobi nini ? Nakosundola bino, elobi Yawe. › \p \v 34 Soki mosakoli to Nganga-Nzambe to moto mosusu alobi : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › nakopesa ye elongo na libota na ye etumbu. \v 35 Nzokande, tala maloba oyo moko na moko kati na bino asengeli koyebisa moninga to ndeko na ye : ‹ Eyano nini Yawe apesi ? Yawe alobi nini ? › \v 36 Kasi bosengeli lisusu te koloba : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › noki te liloba yango ekokoma etumbu mpo na moto oyo alobi yango, pamba te bobongoli maloba na Nzambe na bomoi, Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na biso ! \v 37 Tala maloba oyo osengeli koloba na mosakoli wana : ‹ Eyano nini Yawe apesi yo ? › to ‹ Yawe alobi nini ? › \v 38 Nzokande, soki bolobi lisusu : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › wana tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola bosalelaka maloba oyo : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi, › ata tango Ngai nayebisaki bino : ‹ Boloba te : Tala liloba oyo Yawe alobi ! › \v 39 mpo na yango, nakobosana bino solo mpe nakobengana bino mosika ya elongi na Ngai, bino elongo na engumba oyo napesaki na bino mpe na batata na bino ; \v 40 nakoyokisa bino soni ya libela, soni oyo bokotikala kobosana te. » \c 24 \s1 Bitunga mibale ya mbuma ya figi \p \v 1 Sima na Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, komema na bowumbu, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni : Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, bakalaka ya Yuda, bato ya misala ya maboko mpe bato oyo balambaka bibende na moto ; Yawe alakisaki ngai bitunga mibale ya bambuma ya figi oyo batiaki liboso ya Tempelo ya Yawe. \v 2 Kitunga moko ezalaki na bambuma kitoko ya figi lokola bambuma oyo etelaka liboso ; mpe kitunga mosusu ezalaki na bambuma ekawuka oyo bakoki kolia te. \p \v 3 Yawe atunaki ngai : \pi1 — Jeremi, ozali komona nini ? \p Nazongisaki : \pi1 — Nazali komona bambuma ya figi : bambuma oyo ya kitoko ezali elengi, kasi oyo ekawuka ezali mabe mpe moto moko te akoki kolia yango. \p \v 4 Bongo Yawe alobaki na ngai : \pi1 \v 5 — Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Ndenge bambuma kitoko oyo ya figi ezali, ndenge wana mpe nazali komona bato ya Yuda oyo natindaki na bowumbu, longwa na esika oyo kino na Babiloni. \v 6 Miso na Ngai ekozala likolo na bango mpo na kosalela bango bolamu, mpe nakozongisa bango kati na mokili oyo. Nakobongisa bango lisusu, kasi nakobebisa bango lisusu te ; nakolona bango lokola nzete, nakopikola bango lisusu te. \v 7 Nakopesa bango motema oyo ekoyeba Ngai, mpo ete basosola ete nazali Yawe. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango, pamba te bakozongela Ngai na motema na bango mobimba. \pi1 \v 8 Kasi ndenge bambuma ya figi oyo ekawuka ezali mabe mpe bakoki kolia yango te, » elobi Yawe, « ndenge wana mpe nakosala Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, bakalaka na ye mpe batikali ya Yelusalemi, ezala ba-oyo batikali na mboka mpe ba-oyo bazali na Ejipito : \v 9 nakokomisa bango eloko ya koyoka somo mpe ya koyokela pasi, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ; eloko ya kotiola, eloko ya kosakanela, eloko ya maseki, eloko ya lisuma, kati na bisika nyonso epai wapi nakobengana bango. \v 10 Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, kino tango ekosilisa koboma bango na mokili oyo napesaki bango elongo na batata na bango. » \c 25 \s1 Mibu tuku sambo ya bowumbu \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi na tina na bato nyonso ya Yuda, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi, mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mobu moko na bokonzi. \v 2 Mosakoli Jeremi alobaki na bato nyonso ya Yuda mpe na bavandi nyonso ya Yelusalemi : \p \v 3 « Wuta tango Joziasi, mwana mobali ya Amoni, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na misato na bokonzi kino na mokolo ya lelo, ekokisi mibu tuku mibale na misato oyo nayebisaka bino tango na tango liloba oyo Yawe azalaki koloba na ngai, kasi boyokaki ngai te. \v 4 Mpe atako Yawe azalaki kotindela bino tango na tango basakoli, basali na Ye, kasi bosalaki kaka keba te mpo na koyoka liloba na Ye. \v 5 Bazalaki koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino abongola motema, atika nzela mpe misala na ye ya mabe ; pamba te ezali na nzela wana nde bokoki kowumela na mokili oyo Yawe apesaki bino mpe batata na bino, wuta kala, mpo na libela. \v 6 Bolanda banzambe mosusu te, bosalela mpe bofukamela yango te ; bopelisa kanda na Ngai te na nzela ya banzambe ya bikeko oyo maboko na bino esali, mpe Ngai nakomonisa bino pasi te. \v 7 Kasi boyokaki Ngai te, › elobi Yawe, ‹ botumbolaki Ngai kutu na nzela ya banzambe ya bikeko, oyo maboko na bino esalaki, mpe bomibendelaki bino moko pasi. › » \p \v 8 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Lokola boyokaki maloba na Ngai te, \v 9 nakobengisa bato nyonso ya bikolo ya nor mpe mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, » elobi Yawe, « nakosala ete babundisa mokili oyo, bavandi na yango mpe bikolo nyonso ya zingazinga. Nakobebisa bango penza mpe nakokomisa bango eloko ya somo mpe ya kotiola ; boye bakotikala seko na seko libebi. \v 10 Nakolongola kati na bango pole ya mwinda, banzembo ya esengo mpe kosepela, makelele ya bisengo ya libala ya sika mpe ya libanga oyo banikelaka ble. \v 11 Mokili oyo mobimba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te ; mpe bikolo oyo ekosalela mokonzi ya Babiloni mibu tuku sambo. \v 12 Kasi soki mibu tuku sambo ekoki, nakopesa mokonzi ya Babiloni elongo na ekolo na ye mpe mokili ya bato ya Babiloni etumbu mpo na mabe oyo basalaki, » elobi Yawe, « mpe nakobebisa yango mpo na libela. \v 13 Nakokokisa kati na mokili yango maloba nyonso oyo nalobaki mpo na kotelemela yango, maloba nyonso oyo ekomama kati na buku oyo, maloba oyo Jeremi asakolaki mpo na kotelemela bikolo nyonso. \v 14 Bango, bato ya Babiloni, bakokoma mpe bawumbu ya bikolo ebele mpe ya bakonzi ya nguya ; nakosalela bango kolanda etamboli mpe misala ya maboko na bango. » \s1 Kopo ya kanda ya Nzambe \p \v 15 Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobaki na ngai : « Kamata na loboko na Ngai kopo etonda na vino ya kanda na Ngai mpe melisa yango bikolo nyonso epai wapi nakotinda yo. \v 16 Tango bakomela yango, bakolangwa mpe bakokoma kotenga-tenga liboso ya mopanga oyo nakotinda kati na bango. » \p \v 17 Boye, nakamataki kopo yango na loboko ya Yawe mpe namelisaki yango bikolo nyonso epai wapi atindaki ngai : \v 18 Yelusalemi elongo na bingumba ya Yuda, bakonzi mpe bakalaka na yango ; mpo na kobebisa yango, kokomisa yango eloko ya somo, ya maseki mpe ya lisuma, ndenge ezali komonana sik’oyo. \v 19 Namelisaki yango Faraon, mokonzi ya Ejipito ; basali na ye, bakalaka na ye, bato na ye nyonso, \v 20 bapaya nyonso oyo bavandaka kuna, bakonzi nyonso ya mokili ya Utsi ; bakonzi nyonso ya mokili ya Filisitia, ya Ashikeloni, ya Gaza, ya Ekroni mpe ya bato oyo batikalaki na Asidodi ; \v 21 Edomi, Moabi, bato ya Amoni ; \v 22 bakonzi nyonso ya Tiri mpe ya Sidoni ; bakonzi ya bisanga mpe ya bituka oyo ezalaka pene ya ebale monene ; \v 23 Dedani, Tema, Buzi mpe bato nyonso oyo bavandaka mosika mpe batikaka mandefu te ; \v 24 bakonzi nyonso ya Arabi mpe bakonzi nyonso ya bikolo ya bapaya oyo bavandaka kati na esobe ; \v 25 bakonzi nyonso ya Zimiri, ya Elami mpe ya Medi ; \v 26 bakonzi nyonso ya nor, oyo bazalaka pene mpe ba-oyo bazalaka mosika, moko pene na mosusu, bakonzi ya mboka nyonso oyo ezalaka na mokili. Sima na bango nyonso, mokonzi ya Sheshaki mpe akomela yango. \p \v 27 « Boye loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bomela, bolangwa mpe bosanza, bokweya mpo na kotelema lisusu te, mpo na mopanga oyo nakotinda kati na bino. › \v 28 Soki baboyi kozwa mpe komela kopo oyo ezali na loboko na yo, okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : Bomela ! Bomela ! \v 29 Pamba te, botala ! Ezali na engumba epai wapi babelelaka Kombo na Ngai nde nabandi kotinda pasi ; boni, bokanisi ete bino bokozwa etumbu te ? Bokozanga te kozwa etumbu, pamba te nazali koyeisa mopanga kati na bavandi nyonso ya mokili, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. › \p \v 30 Sakola maloba oyo nyonso mpo na kotelemela bango mpe loba na bango : \q1 ‹ Yawe azali koganga wuta na likolo, \q2 azali kotomboka lokola kake \q1 wuta na Esika na Ye ya bule, \q2 azali konguluma makasi \q1 mpo na kotelemela mokili na Ye ! \q2 Akoganga lokola bato oyo bakamolaka mbuma ya vino, \q2 akogangela bavandi nyonso ya mokili oyo ! \q1 \v 31 Makelele ya makasi ekoyokana kino na suka ya mokili ; \q2 pamba te Yawe akosambisa bikolo, \q1 akosambisa bato nyonso, \q2 akobomisa bato mabe na mopanga, › » \q2 elobi Yawe. \p \v 32 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q1 « Tala ! Pasi ezali kopanzana \q2 longwa na ekolo moko kino na ekolo mosusu ; \q2 mopepe makasi etelemi longwa na basuka ya mokili. » \m \v 33 Na tango wana, bato oyo Yawe akoboma bakozala bisika nyonso, longwa na songe moko kino na songe mosusu ya mokili. Bakosalela bango matanga te, bakosangisa bango te mpo na kokunda bango. \q1 \v 34 Bino babateli bibwele, bolela mpe boganga ! \q2 Bino bakambi ya bitonga, bobaluka-baluka na putulu ! \q1 Pamba te tango na bino ya kokufa ekoki ! \q2 Bokokweya mpe bokopanzana mike-mike lokola mbeki. \q1 \v 35 Babateli bibwele bakozanga esika ya kokimela ; \q2 bakambi ya bampate bakozanga esika ya kobombama. \q1 \v 36 Boyoka koganga ya babateli bibwele, \q2 kolela ya bakambi ya bampate, \q1 pamba te Yawe azali kobebisa \q2 bazamba epai wapi bibwele eliaka. \q1 \v 37 Bitando ya kimia ekotikala pamba \q2 likolo ya kanda ya Yawe. \q1 \v 38 Lokola nkosi etikaka ndako na yango, \q2 mokili na bango mpe ekotikala lisusu na bato te \q1 likolo ya mopanga ya banyokoli na bango \q2 mpe likolo ya kanda ya Yawe. \c 26 \ms1 Lobiko mpo na Isalaele mpe Yuda \s1 Likita mpo na koboma Jeremi \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki, na ebandeli ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda : \p \v 2 « Tala liloba oyo Yawe alobi : Telema kati na lopango ya Tempelo ya Yawe mpe loba na bato nyonso ya bingumba ya Yuda, oyo bayaka kogumbamela Yawe kati na Tempelo. Yebisa bango maloba nyonso oyo nasili kotinda yo ; kolongola ata liloba moko te. \v 3 Tango mosusu bakoyoka, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; bongo Ngai nakobongola mokano oyo nasilaki kozwa ya kotindela bango pasi likolo ya misala na bango ya mabe. \v 4 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Soki boyokeli Ngai te, soki boboyi kotosa malakisi oyo napesaki bino \v 5 mpe boboyi kotosa maloba ya basali na Ngai, basakoli, oyo nazalaki kotindela bino tango na tango atako boboyaki koyokela bango, \v 6 nakosala na Ndako oyo, makambo oyo nasalaki na Silo ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekobanda kotangaka kombo ya engumba oyo mpo na kolakela mabe. › » \p \v 7 Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bazalaki koyoka Jeremi koloba maloba oyo kati na Tempelo ya Yawe. \v 8 Kasi tango Jeremi asilisaki koloba na bato nyonso maloba oyo Yawe atindaki ye, Banganga-Nzambe, basakoli mpe bato nyonso bakangaki ye mpe balobaki : « Okokufa ! \v 9 Mpo na nini ozali kosakola na Kombo na Yawe ete Ndako oyo ekokoma lokola Silo ; engumba oyo ekobebisama, ekotikala lisusu na bato te ? » \p Ebele ya bato nyonso bazingelaki Jeremi kati na Tempelo ya Yawe. \v 10 Tango bakalaka ya Yuda bayokaki makambo oyo nyonso, balongwaki na ndako ya mokonzi, bakendeki na Tempelo ya Yawe mpe bavandaki liboso ya Ekuke ya Sika ya Tempelo ya Yawe. \v 11 Banganga-Nzambe mpe basakoli balobaki na bakambi mpe na bato nyonso : « Moto oyo asengeli kokufa, pamba te asakoli mabe mpo na engumba oyo. Bino moko boyoki yango na matoyi na bino ! » \p \v 12 Jeremi alobaki na bakambi mpe na bato nyonso : « Yawe atindi ngai kosakola mpo na Ndako mpe engumba oyo, makambo nyonso oyo bosili koyoka. \v 13 Bobongola sik’oyo bizaleli mpe misala na bino, mpe botosa Yawe, Nzambe na bino ; mpe Yawe akobongola mokano oyo asilaki kozwa, mpe akotindela bino lisusu te pasi oyo alakaki bino. \v 14 Bongo mpo na ngai, nazali na maboko na bino, bosala ngai makambo nyonso oyo bomoni ete ezali malamu mpe sembo. \v 15 Kasi boyeba ete soki bobomi ngai, bokomema ngambo ya pamba na bomoi na bino mpe na engumba oyo elongo na bavandi na yango nyonso, likolo ya makila ya moto oyo ayebi likambo te ; pamba te, solo penza, Yawe nde atindaki ngai epai na bino mpo na koyebisa bino maloba nyonso oyo, mpo ete boyoka yango. » \p \v 16 Bakambi mpe bato nyonso balobaki epai ya Banganga-Nzambe mpe basakoli : « Esengeli te koboma moto oyo ! Azali solo koloba na biso na Kombo na Yawe, Nzambe na biso. » \p \v 17 Ndambo ya bakambi ya mokili batelemaki mpe balobaki na lisanga mobimba ya bato : \v 18 « Mosakoli Mishe, moto ya Moresheti, asakolaki na tango ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda ; alobaki na bato nyonso ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q1 Bakobalola Siona ndenge babalolaka mabele ya bilanga, \q2 Yelusalemi ekokoma liboke ya mabanga, \q2 mpe ngomba epai wapi batongaki Tempelo ekokoma ngomba moke oyo ezipami na matiti. › \p \v 19 Boni, Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, to moto mosusu kati na Yuda abomaki ye ? Ezekiasi atosaki Yawe te mpe asalelaki mosakoli Mishe ngolu te ? Yawe abongolaki mokano na Ye te ya kotindela bango pasi oyo alakaki ? Tokomibendela biso moko pasi ya makasi na pamba. » \s1 Yeoyakimi abomisi mosakoli Uri \p \v 20 Nzokande, Iri, mwana mobali ya Shemaya, moto ya Kiriati-Yearimi, azalaki mpe kosakola na Kombo na Yawe. Azalaki kaka kosakola makambo moko na Jeremi na tina na engumba mpe mokili oyo. \v 21 Tango mokonzi Yeoyakimi elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bakambi bayokaki maloba ya Iri, balukaki koboma ye. Kasi tango Iri ayokaki yango, abangaki makasi mpe akimaki na Ejipito. \v 22 Mokonzi Yeoyakimi atindaki Elinatani, mwana mobali ya Akibori, na Ejipito elongo na bato mosusu. \v 23 Babimisaki Iri na Ejipito mpe bamemaki ye epai ya mokonzi Yeoyakimi oyo abomaki ye na mopanga mpe apesaki mitindo ete babwaka ebembe na ye kati na kunda oyo bakundaka bato pamba. \p \v 24 Nzokande Ayikami, mwana mobali ya Shafani, abatelaki Jeremi ; boye akabamaki te na maboko ya bato mpo ete baboma ye. \c 27 \s1 Kondima kosalela Babiloni \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi, na ebandeli ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda : \p \v 2 Tala liloba oyo Ngai Yawe nalobi : « Sala ekangiseli na basinga mpe banzete mpe kanga yango na kingo na yo. \v 3 Bongo tinda maloba epai ya bakonzi ya Edomi, ya Moabi, ya Amoni, ya Tiri mpe ya Sidoni na nzela ya batindami oyo bayei na Yelusalemi mpo na kokutana na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda. \v 4 Pesa bango sango oyo bakomemela bakonzi na bango mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‘ Boyebisa bakonzi na bino maloba oyo : \v 5 Ngai nde nasalaki mabele, nasalaki bato mpe banyama nyonso oyo bazali kati na yango, na nguya monene na Ngai mpe na loboko na Ngai oyo esembolama. Napesaka mabele yango epai ya moto nyonso oyo Ngai nalingi. \v 6 Sik’oyo, Ngai, nakabi mikili oyo nyonso na maboko ya mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni ; nakabi mpe na maboko na ye ata banyama ya zamba mpo ete etosa ye. \v 7 Bikolo nyonso ekotosa ye, mwana na ye ya mobali mpe koko na ye, kino tango ya mokili na ye mpe ekokoka ; bongo bikolo ebele mpe bakonzi ya nguya bakokonza ye. \v 8 Soki ekolo moko to mokili moko eboyi kosalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, to eboyi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni, nakopesa ekolo yango etumbu na nzela mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, elobi Yawe, kino nakobebisa yango na nzela ya loboko na ye. \v 9 Boye, boyokela te basakoli na bino, bato na bino ya soloka, bato na bino oyo balimbolaka bandoto, bato na bino oyo basololaka na bakufi, oyo bazali koloba na bino ete bosalela mokonzi ya Babiloni te. \v 10 Bazali kosakola makambo ya lokuta, kaka mpo na komema bino mosika ya mokili na bino. Ngai nakobengana bino solo mpe bokokufa. \v 11 Kasi soki ekolo moko endimi komema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe endimi kosalela ye, nakotika ekolo yango na kimia kati na mokili na bango mpo ete basala bilanga mpe bawumela kuna, elobi Yawe. ’ › » \p \v 12 Bongo napesaki sango kaka wana epai ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda : « Bomema mokumba ya ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni mpe bosalela ye elongo na bato na ye, bongo bokobika ! \v 13 Mpo na nini bino elongo na bato na bino bokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ndenge Yawe akataki mpo na ekolo nyonso oyo ekoboya kosalela mokonzi ya Babiloni ? \v 14 Boyoka te maloba ya basakoli oyo bazali koloba na bino : ‹ Bokosalela mokonzi ya Babiloni te ! › Bazali kosakola makambo ya lokuta. \v 15 Natindaki bango te, » elobi Yawe, « bazali kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai. Nakobengana bino mpe bokokufa, bino mpe basakoli oyo bazali kosakola epai na bino. » \p \v 16 Bongo nalobaki na Banganga-Nzambe mpe na bato nyonso : « Tala makambo oyo Yawe alobi : Boyoka te basakoli na bino, oyo bazali koloba : ‹ Tala, bisalelo ya Tempelo ya Yawe ekozonga noki wuta na Babiloni. › Bazali koloba na bino makambo ya lokuta ! \v 17 Boyoka bango te ! Bosalela mokonzi ya Babiloni, bongo bokobika ! Mpo na nini engumba oyo ebebisama ? \v 18 Soki bazali solo basakoli mpe Liloba na Yawe ezali kati na bango, tika ete basambela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpo ete bisalelo oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi ekende na Babiloni te. \v 19 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi na tina na makonzi, nzungu ya monene ya bronze, bivandelo na yango mpe bisalelo mosusu oyo etikalaki kati na engumba wana, \v 20 bisalelo oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atikaki tango amemaki Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, na bowumbu longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, elongo na bankumu nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi ; \v 21 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na biloko oyo etikalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na ndako ya mokonzi ya Yuda mpe kati na Yelusalemi : \v 22 ‹ Bakomema yango na Babiloni, mpe ekotikala kuna kino na mokolo oyo nakolandela yango, › elobi Yawe, ‹ nakolongola yango mpe nakozongisa yango na esika oyo, elobi Yawe. › » \c 28 \s1 Jeremi mpe mosakoli ya lokuta Anania \p \v 1 Kaka na mobu wana, mobu ya minei, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na sanza ya mitano, mosakoli Anania, mwana mobali ya Azuri, moto ya mboka Gabaoni, alobaki na ngai kati na Tempelo ya Yawe na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso : \v 2 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni. \v 3 Etikali kaka mibu mibale ; nakozongisa na esika oyo bisalelo nyonso ya Tempelo ya Yawe, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, azwaki na esika oyo mpe amemaki na Babiloni. \v 4 Nakozongisa lisusu na esika oyo : Yekonia, mwana mobali ya Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, mpe bato nyonso oyo, wuta na Yuda, bakendeki na bowumbu, na Babiloni, › elobi Yawe, ‹ pamba te nakobuka ekangiseli ya mokonzi ya Babiloni. › » \p \v 5 Bongo Mosakoli Jeremi azongiselaki mosakoli Anania eyano na miso ya Banganga-Nzambe mpe ya bato nyonso oyo batelemaki kati na Tempelo ya Yawe. \v 6 Mosakoli Jeremi alobaki : « Amen ! Tika ete Yawe asala bongo ! Tika ete Yawe akokisa maloba oyo osili kosakola, azongisa na esika oyo, wuta na Babiloni, bisalelo ya Tempelo ya Yawe mpe bato nyonso oyo bakendeki na bowumbu ! \v 7 Nzokande, yoka maloba oyo nalingi koloba na yo mpe na bato nyonso : \v 8 Wuta kala, basakoli oyo basakolaki liboso ete yo mpe ngai tozala, basakolaki bitumba, pasi mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kotelemela bikolo ebele mpe mikili ya makasi ; \v 9 kasi soki mosakoli asakoli kimia, akondimama ete azali solo mosakoli oyo Yawe atindi masakoli na ye ekokisami. » \p \v 10 Bongo mosakoli Anania alongolaki ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi mpe abukaki yango. \v 11 Anania alobaki liboso ya bato nyonso : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Liboso ete mibu mibale ekoka, nakobuka ndenge wana ekangiseli ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, na kingo ya bikolo nyonso. › » \p Mpe mosakoli Jeremi akendeki na ye. \p \v 12 Sima na mosakoli Anania kobuka ekangiseli na kingo ya mosakoli Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi : \v 13 « Kende koloba na Anania : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, obuki ekangiseli ya banzete ; kasi na esika na yango, okolata nde ekangiseli ya ebende. \v 14 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nasili kotia ekangiseli ya ebende na kingo ya bikolo nyonso mpo ete esalela Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe ekosalela ye solo. Nakopesa ye bokonzi ata likolo ya banyama ya zamba. › » \p \v 15 Bongo mosakoli Jeremi alobaki lisusu na mosakoli Anania : « Anania, yoka ! Yawe atindi yo te ; mpe ozali kotindika bato oyo na kotia motema na makambo ya lokuta ! \v 16 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakolongola yo na mokili oyo, okokufa kaka na mobu oyo ; pamba te otindiki bato na kotombokela Yawe. › » \p \v 17 Kaka na mobu wana, na sanza ya sambo, mosakoli Anania akufaki. \c 29 \s1 Mokanda epai ya bato oyo bakendeki na bowumbu \p \v 1 Tala makomi ya mokanda oyo mosakoli Jeremi atindaki, wuta na Yelusalemi, epai ya bakambi oyo batikalaki kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, epai ya Banganga-Nzambe, epai ya basakoli mpe epai ya bato nyonso oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi. \v 2 Mokanda yango etindamaki sima na bato oyo kokende na bawumbu longwa na Yelusalemi : mokonzi Yekonia, mama ya mokonzi, bakalaka na ye ya lokumu, bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bato oyo balambaka bibende na moto mpe bato ya misala ya maboko. \v 3 Apesaki mokanda yango na maboko ya Eleasa, mwana mobali ya Shafani ; mpe na maboko ya Gemaria, mwana mobali ya Ilikia. Ezali bango nde Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki na Babiloni epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni. Mokanda yango elobaki boye : \pm \v 4 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi epai ya bato nyonso oyo namemaki na bowumbu, na Babiloni wuta na Yelusalemi : \v 5 « Botonga bandako mpe bovanda kuna ; bolona banzete mpe bolia mbuma na yango ; \v 6 bobalana, bobota bana mibali mpe bana basi, bolukela bana na bino ya mibali basi mpe bobalisa bana na bino ya basi, mpo ete bango mpe babota bana mibali mpe bana basi. Bobotana kuna mpe bokoma ebele, mpe botika te ete motango na bino ekita. \v 7 Boluka kimia mpe bolamu ya engumba epai wapi namemaki bino na bowumbu ; bobondela Yawe mpo na yango, pamba te soki yango ebongi, bino mpe bokozala malamu. » \pm \v 8 Solo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Bomitika te ete basakoli mpe bato ya soloka oyo bazali kati na bino bakosa bino : bondimela te bato oyo bazali kolimbolela bino bandoto. \v 9 Pamba te bazali nde kosakola makambo ya lokuta na Kombo na Ngai ; natindi bango te, » elobi Yawe. \pm \v 10 Kasi tala liloba oyo Yawe alobi : « Tango mibu tuku sambo ekokoka mpo na Babiloni, nakoya epai na bino mpe nakokokisa elaka na Ngai ya ngolu mpo na kozongisa bino na esika oyo. \v 11 Pamba te nayebi malamu mabongisi oyo nasalaki mpo na bino, » elobi Yawe, « mabongisi ya kosalela bino bolamu, kasi ya konyokola bino te, mabongisi mpo na kopesa bino elikya mpe bomoi malamu. \v 12 Boye bokobelela Ngai, bokoya epai na Ngai mpe bokobondela Ngai ; mpe Ngai nakoyoka bino. \v 13 Bokoluka Ngai mpe bokomona Ngai, soki boluki Ngai na motema na bino mobimba. \v 14 Nakomimonisa epai na bino, » elobi Yawe, « mpe nakozongisa bino longwa na bowumbu. Nakosangisa bino longwa na bikolo nyonso mpe na bisika nyonso epai wapi nabenganaki bino, » elobi Yawe, « nakozongisa bino na esika oyo namemelaki bino na bowumbu. » \pm \v 15 Solo, bokoki koloba : « Yawe abimisi basakoli kati na biso awa na Babiloni ! » \v 16 Kasi tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi oyo avandi na kiti ya bokonzi ya Davidi, na tina na bavandi nyonso ya engumba oyo, mpe na tina na bandeko na bino oyo bakendeki te na bowumbu elongo na bino ; \v 17 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Nakotindela bango mopanga, nzala makasi mpe bokono oyo ebomaka, mpe nakokomisa bango lokola mbuma ya figi oyo epola, oyo moto ata moko te akokoka kolia. \v 18 Nakolanda bango na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ; mpe na miso ya bikolo nyonso ya mabele, nakokomisa bango eloko ya koyoka somo, ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya lisuma, eloko ya kobanga mpe ya kotiola kati na bikolo nyonso epai wapi nakobengana bango. \v 19 Pamba te bayokaki maloba na Ngai te, » elobi Yawe, « maloba oyo nazalaki kotindela bango tango na tango na nzela ya basali na Ngai, basakoli. Mpe bino bato oyo bokendeki na bowumbu, bino mpe boyokaki te, » elobi Yawe. \pm \v 20 Yango wana, boyoka Liloba na Yawe, bino bawumbu nyonso oyo natindaki na Babiloni longwa na Yelusalemi. \v 21 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na Akabi, mwana mobali ya Kolaya, mpe na tina na Sedesiasi, mwana mobali ya Maaseya, oyo bazali kosakola makambo ya lokuta epai na bino, na Kombo na Ngai : « Nakokaba bango na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe akoboma bango na miso na bino. \v 22 Likolo na bango, bawumbu nyonso oyo bawutaki na Yuda, bongo bazali na Babiloni, bakosalela elakeli mabe oyo : ‹ Tika ete Yawe asala bino ndenge asalaki Sedesiasi mpe Akabi, oyo mokonzi ya Babiloni atumbaki na moto ! › \v 23 Pamba te basalaki kati na Isalaele ekobo elongo na basi ya baninga na bango, bapaya, mpe balobaki lokuta na Kombo na Ngai, nzokande Ngai natindaki bango te kosala bongo. Nayebi yango malamu, mpe Ngai moko nazali Motatoli na yango, » elobi Yawe. \s1 Maloba epai ya Shemaya \p \v 24 Yebisa Shemaya, moto ya Nekelami, maloba oyo : \v 25 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Otindaki mikanda na kombo na yo moko epai ya bato nyonso ya Yelusalemi, epai ya Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, mpe epai ya Banganga-Nzambe. Olobaki na Sofoni : \v 26 ‹ Yawe aponaki yo Nganga-Nzambe na esika ya Yeoyada mpo ete obatela Tempelo ya Yawe. Osengelaki kobwaka na boloko mpe kokanga bibende na makolo, bato pamba oyo bazali komimona lokola basakoli. \v 27 Boye, mpo na nini opamelaki te mosakoli Jeremi, moto ya Anatoti, oyo azali komimona lokola mosakoli kati na bino ? \v 28 Atindelaki biso sango oyo kati na Babiloni : Bowumbu na bino ekowumela tango molayi. Yango wana, botonga bandako mpe bovanda kuna, bolona bilanga mpe bolia mbuma na yango. › » \p \v 29 Nzokande, Nganga-Nzambe Sofoni atangisaki mosakoli Jeremi mokanda yango. \v 30 Boye, Yawe alobaki na Jeremi : \v 31 « Tinda sango oyo epai ya bawumbu nyonso : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Shemaya, moto ya Nekelami : Lokola Shemaya asakolaki makambo ya lokuta epai na bino, nzokande natindaki ye te, mpe amemi bino na kotia motema na lokuta, \v 32 tala liloba oyo Yawe alobi : Solo, nakopesa Shemaya, moto ya Nekelami, etumbu elongo na bakitani na ye. Kati na bato na ye, moko te akotikala, mpe akotikala komona te bolamu oyo nakosala epai ya bato na Ngai, elobi Yawe, pamba te atindiki bato na Ngai kotombokela Ngai. › » \c 30 \s1 Lobiko ya bana ya Isalaele \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : \p \v 2 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Koma kati na buku makambo nyonso oyo nayebisaki yo. \v 3 Tango ezali koya, › elobi Yawe, ‹ tango oyo nakokangola bato na Ngai, Isalaele, mpe Yuda kati na bowumbu ; mpe nakozongisa bango na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bango mpo ete bakamata yango, › elobi Yawe. » \p \v 4 Tala liloba oyo Yawe alobaki na tina na Isalaele mpe Yuda : \q1 \v 5 « Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 ‹ Koganga ya kobanga mpe ya somo \q2 nde ezali koyokana ; kimia ezali lisusu te. \q1 \v 6 Botuna mpe botala : \q2 Boni, mobali akoki kobota bana ? \q1 Bongo mpo na nini nazali komona \q2 moto nyonso ya makasi asimbi libumu na ye \q1 lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota \q2 mpe elongi na ye ekomi mawa-mawa ? \q1 \v 7 Mawa ! Ekozala penza mokolo ya somo ! \q2 Mokolo moko te ekokokana na yango ! \q1 Ekozala tango ya pasi mpo na Jakobi, \q2 kasi akobikisama na pasi yango. \b \q1 \v 8 Na mokolo wana, › \q2 elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q1 ‹ nakobuka ekangiseli na bakingo na bango, \q2 nakokata basinga oyo bakangelaki bango \q2 mpe bakozala lisusu te bawumbu ya bapaya. \q1 \v 9 Nzokande, bakosalela Yawe, Nzambe na bango, \q2 mpe Davidi, mokonzi oyo nakotia \q2 mpo ete akamba bango. \b \q1 \v 10 Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ! \q2 Oh Isalaele, kozala na somo te, › \q2 elobi Yawe. \q1 ‹ Solo, nakobikisa yo wuta na mokili ya mosika, \q2 mpe bakitani na yo, wuta na mokili ya bowumbu ! \q1 Jakobi akozwa lisusu kimia mpe bopemi, \q2 mpe moto moko te akobangisa ye lisusu. \q1 \v 11 Nazali elongo na yo mpe nakobikisa yo, › \q2 elobi Yawe. \q1 ‹ Ata nakobebisa nye bikolo nyonso \q2 epai wapi napanzaki bino ; \q1 kasi bino, nakobebisa bino nye te ; \q2 solo, nakopesa bino etumbu, kasi ekozala na ndenge ya bosembo ; \q2 nakozanga te kopamela bino. › \p \v 12 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 ‹ Pota na yo ekobika te \q2 mpe pasi na yo ekosila te. \q1 \v 13 Moto akolobela yo akozala te, \q2 kisi ezali te mpo na pota na yo, \q2 lobiko ezali te mpo na yo. \q1 \v 14 Baninga na yo nyonso babosani yo, \q2 bazali komitungisa lisusu te mpo na yo. \q1 Nabetaki yo penza ndenge monguna abetaka, \q2 napesaki yo penza etumbu na kanda makasi, \q1 pamba te ngambo na yo ezalaki monene \q2 mpe masumu na yo eleki ebele. \q1 \v 15 Mpo na nini ozali koganga mpo na pota na yo, \q2 mpe pasi na yo ezali kosila te ? \q1 Nasali yo boye mpo ete ngambo na yo ezali monene, \q2 mpe masumu na yo eleki ebele. \b \q1 \v 16 Kasi bato nyonso oyo bakosala yo mabe, \q2 bakosala bango mpe mabe ; \q1 banguna na yo nyonso bakokende na bowumbu ; \q2 bato oyo babotolaki yo biloko, \q1 bakobotola bango mpe biloko ; \q2 bato oyo banyokolaki yo, \q2 bakonyokola mpe bango. \q1 \v 17 Nakozongisela yo bomengo na yo \q2 mpe nakobikisa bapota na yo, › \q2 elobi Yawe. \q1 ‹ Lokola bazalaki kobenga yo ekolo basundola, \q2 Siona oyo moto moko te ayokelaka mawa ; › \q1 \v 18 tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 ‹ Nakozongisa lisusu bomengo \q1 kati na bandako ya kapo ya Jakobi \q2 mpe nakoyokela bandako na ye mawa ; \q1 bakotonga lisusu engumba Siona oyo ebukana-bukana \q2 mpe ndako ya mokonzi, na esika na yango ya kala. \q1 \v 19 Nzembo ya matondi mpe mingongo ya esengo \q2 ekobima kati na bango. \q1 Nakokomisa bango ebele, \q2 mpe motango na bango ekokoma ebele ; \q2 nakopesa bango lokumu, mpe bakotiolama lisusu te. \q1 \v 20 Bana na bango ya mibali bakozala \q2 lokola na tango ya kala, \q1 mpe lingomba na bango ekowumela liboso na Ngai ; \q2 nakopesa etumbu na bato nyonso \q2 oyo bazali konyokola bango. \q1 \v 21 Mokonzi na bango akowuta kati na bango, \q2 mpe mokambi na bango akowuta kaka kati na bango ; \q1 nakobenda bango pene na Ngai \q2 mpe bakoya pene na Ngai, \q2 pamba te nani azali na nguya ya kopusana pene na Ngai ? › \q2 elobi Yawe. \q1 \v 22 ‹ Boye, bokozala bato na Ngai, \q2 mpe Ngai nakozala Nzambe na bino. › » \b \q1 \v 23 Tala, mopepe ya Yawe etomboki, \q2 kanda makasi na Ye epeli, \q1 bakake ezali konguluma na likolo, \q2 mpe ezali kokweya na mito ya bato mabe. \q1 \v 24 Kanda makasi ya Yawe ekozonga te \q2 kino tango ekokokisa mabongisi ya motema na Ye. \q2 Bokososola yango penza na mikolo ekoya. \c 31 \p \v 1 « Na tango wana, » elobi Yawe, « Ngai nakozala Nzambe ya bituka nyonso ya Isalaele, mpe bango bakozala bato na Ngai. » \p \v 2 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Bato oyo bakobika na mopanga \q2 bakozwa ngolu kati na esobe ; \q2 boye, nakoya kopesa Isalaele bopemi. » \p \v 3 Yawe abimelaki biso na kala, alobaki : \q1 « Nalingaka bino na bolingo ya seko ; \q2 yango wana nabendaka bino epai na Ngai na nzela ya bolingo. \q1 \v 4 Nakobongisa bino lisusu ; \q2 oh Isalaele, mboka kitoko, okotongama lisusu. \q1 Okolata lisusu mbunda na yo ya mike \q2 mpe okobina mabina ya esengo. \q1 \v 5 Okolona lisusu bilanga ya vino \q2 na bangomba ya Samari ; \q1 bato oyo bakolona yango bakosepela \q2 tango bakobuka mbuma na yango. \q1 \v 6 Ekozala mokolo oyo bakengeli \q2 bakoganga na bangomba ya Efrayimi : \q1 ‹ Boya ! Tika ete tokende na Siona, \q2 epai na Yawe, Nzambe na biso ! › » \p \v 7 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Boyemba na esengo mpo na Jakobi, \q2 boganga na esengo mpo na ekolo ya liboso kati na bikolo nyonso ! \q1 Batatola, bosanzola mpe boloba : \q2 ‹ Oh Yawe, bikisa bato na Yo, \q2 bato ya Isalaele oyo batikali. › \q1 \v 8 Tala, nakozongisa bango wuta na mokili ya nor \q2 mpe nakosangisa bango wuta na basuka ya mokili. \q1 Kati na bango, ekozala na bakufi miso mpe bakakatani, \q2 basi ya zemi mpe basi oyo bazali na pasi ya kobota ; \q2 bato ebele penza bakozonga. \q1 \v 9 Bakendeki na kolela, \q2 kasi nakozongisa bango, \q1 wana bakozala kati na kobondela ; \q2 nakokamba bango na bisika oyo mayi etiolaka, \q1 na nzela esembolama mpo ete babeta mabaku te ; \q1 pamba te nazali Tata ya Isalaele, \q2 mpe Efrayimi azali mwana na Ngai ya liboso. \b \q1 \v 10 Oh bino bikolo, boyoka Liloba na Yawe, \q2 botatola yango na bisanga ya mosika ! \q1 Boloba : ‹ Ye oyo apanzaki Isalaele \q2 akosangisa bango mpe akobatela bango \q2 ndenge mobateli bibwele abatelaka etonga na ye. \q1 \v 11 Mpo ete Yawe akokangola Jakobi \q2 mpe akobikisa bango na maboko ya bato \q2 oyo baleki bango na makasi. \q1 \v 12 Bakozonga na koganga ya esengo \q2 na bangomba ya Siona ; \q1 bakosepela na bomengo ya Yawe : \q2 ble, vino ya sika mpe mafuta, bameme mpe bangombe. \q1 Bakokoma lokola elanga ya kitoko oyo basopela mayi, \q2 mpe bakozala lisusu na mawa te. \q1 \v 13 Bilenge basi bakobina na esengo \q2 elongo na bilenge mibali mpe mibange. \q1 Nakobongola matanga na bango na esengo, \q2 nakopesa bango kobondisama mpe esengo na esika ya mawa. \q1 \v 14 Nakoleisa malamu Banganga-Nzambe \q2 na mafuta ya bibwele, \q1 mpe bato na Ngai bakotonda na biloko na Ngai, › » \q2 elobi Yawe. \p \v 15 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Mongongo moko ezali koyokana na Rama, \q2 ezali mongongo ya mawa mpe ya kolela makasi : \q1 Rasheli azali kolela bana na ye ya mibali \q2 mpe aboyi kobondisama, \q2 pamba te bana na ye ya mibali bazali lisusu na bomoi te. » \p \v 16 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Tika kolela mpe kobimisa mpinzoli, \q2 pamba te mosala na yo ezali na litomba, » \q2 elobi Yawe, \q1 « bana na yo ya mibali bakozonga \q2 wuta na mokili ya banguna. \q1 \v 17 Elikya ezali mpo na bomoi na yo ya lobi, » \q2 elobi Yawe, \q1 « bana na yo bakozonga na mokili na bango. \q1 \v 18 Nayoki kolelalela ya Efrayimi : \q2 ‹ Opesi ngai etumbu \q2 lokola mwana ngombe ya mobali oyo ezali na liboma, \q1 mpe etumbu yango ekweyelaki ngai. \q2 Zongisa ngai, mpe nakozonga, \q2 pamba te ozali Yawe, Nzambe na ngai. \q1 \v 19 Nabungaki nzela, kasi nabongoli motema ; \q2 sik’oyo nasili kososola, \q1 nazali kobeta tolo na pasi na motema. \q2 Nayokisamaki soni mpe nasambwaki, \q2 pamba te namemaki bozoba ya bolenge na ngai. › \q1 \v 20 Efrayimi azali penza mwana na Ngai ya bolingo, \q2 mwana oyo nasepelaka na ye mingi te. \q1 Nzokande napamelaka ye tango nyonso, \q2 mpe nakanisaka ye tango nyonso. \q1 Yango wana, motema na Ngai esepelaka na ye, \q2 mpe nayokelaka ye mawa, » \q2 elobi Yawe. \b \q1 \v 21 « Tia bilembo na nzela, \q2 pika makonzi oyo elakisaka nzela na nzela yango ; \q1 sala penza keba na nzela na yo, \q2 na nzela oyo ozali kolanda. \q1 Oh Isalaele, mboka kitoko, zonga, \q2 zonga na bingumba na yo ! \q1 \v 22 Oh elenge mwasi ya mobulu, \q2 kino tango nini okotika kotambola-tambola ? \q1 Yawe akosala likambo ya sika na mabele : \q2 mwana mwasi akoluka mwana mobali na bolingo. » \p \v 23 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tango nakobimisa bango na bowumbu, tala lisusu maloba oyo bato bakoloba kati na Yuda mpe kati na bingumba na yango : ‹ Oh ndako ya bosembo ; oh ngomba ya bule, tika ete Yawe apambola yo ! › \v 24 Bato bakokoma kovanda elongo kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba na yango nyonso : basali bilanga mpe babokoli bibwele. \v 25 Nakozongisa makasi ya bato oyo balembi na posa ya mayi, mpe nakoleisa bato oyo balembi na nzala. » \p \v 26 Boye, tango nalamukaki, natalaki pene na ngai ; nasosolaki ete pongi na ngai ezalaki elengi. \p \v 27 « Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « nakolona bato mpe banyama lokola milona kati na bokonzi ya Isalaele mpe kati na bokonzi ya Yuda. \v 28 Ndenge nazalaki kosenzela bango mpo na kopikola mpe kobuka, kobebisa, kopanza mpe kosala bango mabe, ndenge wana mpe nakosenzela bango mpo na kotonga mpe kolona, » elobi Yawe ; \v 29 « na mikolo wana, bato bakoloba lisusu te : \q1 ‹ Batata balie mbuma ya vino ya mobesu, \q2 mpe minu ya bana na bango ekomi ngayi. › \m \v 30 Na esika na yango, moto na moto akokufa mpo na masumu na ye moko ; moto nyonso oyo alie mbuma ya vino ya mobesu, minu na ye moko nde ekokoma ngayi. \q1 \v 31 Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, \q2 « nakosala boyokani ya sika \q2 elongo na bato ya Isalaele mpe ya Yuda ; \q1 \v 32 ekozala ndenge moko te na boyokani \q2 oyo nasalaki elongo na batata na bango \q1 tango nasimbaki bango na loboko \q2 mpo na kobimisa bango na Ejipito ; \q1 pamba te bakataki boyokani na Ngai wana, \q2 atako nazalaki Mobali ya libala mpo na bango, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 33 « Kasi tala boyokani oyo nakosala elongo na bato ya Isalaele, \q2 sima na mikolo wana, » \q2 elobi Yawe : \q1 « Nakotia mibeko na Ngai kati na makanisi na bango, \q2 nakokoma yango kati na mitema na bango, \q1 nakozala Nzambe na bango, \q2 mpe bango bakozala bato na Ngai. \q1 \v 34 Moko te akoteya lisusu moninga na ye \q2 to ndeko na ye na koloba : \q1 ‹ Yeba Yawe ! › \q2 Pamba te bango nyonso bakoyeba Ngai, \q2 kobanda na mwana moke kino na mokolo, » \q2 elobi Yawe, \q1 « nakolimbisa mabe na bango \q2 mpe nakokanisa lisusu masumu na bango te. » \p \v 35 Tala makambo oyo Yawe alobi, \q1 Ye oyo atia moyi mpo ete engengisa mokolo, \q2 apesa mibeko ete sanza mpe minzoto engengisa butu, \q1 aningisaka ebale monene mpo ete mbonge etia makelele, \q2 mpe oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga : \q1 \v 36 « Soki kaka bakoki solo kolongola malako \q2 oyo na miso na Ngai, » \q2 elobi Yawe, \q1 « wana bana ya Isalaele mpe bakozala lisusu ekolo te \q2 na miso na ngai. » \p \v 37 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Soki kaka bakoki komeka molayi ya likolo \q2 mpe komona miboko ya mabele, \q1 wana nakobwaka bana nyonso ya Isalaele \q2 mpo na makambo nyonso oyo basali, » \q2 elobi Yawe. \p \v 38 « Na mikolo ekoya, » elobi Yawe, « bakotonga lisusu engumba oyo mpo na Ngai, kobanda na ndako molayi ya Ananeyeli kino na Ekuke ya Suka ya mir ; \v 39 bakotia singa ya batongi ndako longwa na esika wana kino na ngomba moke ya Garebi, mpe ekobaluka kino na Gowa. \v 40 Bakobulisa mpo na Yawe lubwaku nyonso epai wapi babwakaki bibembe mpe putulu, mpe bilanga nyonso oyo ezali pene ya lubwaku ya Sedron, kino na songe ya Ekuke ya Bampunda, na ngambo ya este ; bakotikala kobebisa to koboma lisusu engumba oyo te. » \c 32 \s1 Jeremi asombi elanga \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na bokonzi mpe Nabukodonozori akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi. \v 2 Ezalaki na tango oyo mampinga ya mokonzi ya Babiloni ezingelaki Yelusalemi, mpe mosakoli Jeremi azalaki ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli ya ndako ya mokonzi ya Yuda. \v 3 Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, abwakaki ye kuna na koloba : « Mpo na nini ozali kosakola na maloba oyo : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobotola yango ; \v 4 Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akolonga te kokima liboso ya bato ya Babiloni, kasi nakokaba ye solo na maboko ya mokonzi ya Babiloni oyo akolobana na ye mpe akotalana na ye na elongi ; \v 5 akomema Sedesiasi na Babiloni, akowumela kuna kino tango nakotala likambo na ye, elobi Yawe, soki bomeki kobundisa bato ya Babiloni, bokolonga te. › » \p \v 6 Jeremi alobaki : « Yawe alobaki na ngai : \v 7 Anameyeli, mwana mobali ya Shalumi, noko na yo, azali koya epai na yo mpe akoloba : ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti, pamba te yo nde ozali na makoki mpe na mokumba ya kosikola yango. › \p \v 8 Bongo, kaka ndenge Yawe alobaki, Anameyeli, mwana ya noko na ngai, ayaki kotala ngai kati na lopango ya bakengeli mpe alobaki : ‹ Somba elanga na ngai, oyo ezali na Anatoti kati na etuka ya Benjame, pamba te yo nde ozali na makoki ya kosikola yango mpe ya kozwa yango ; somba na yo yango. › \p Nasosolaki ete ezali Liloba na Yawe ; \v 9 boye nasombaki elanga oyo ezali na Anatoti, na maboko ya Anameyeli, mwana mobali ya noko na ngai, mpe nafutaki ye mbongo ya bibende ya palata, zomi na sambo. \v 10 Nakomaki mokanda oyo nasombelaki elanga mpe nabetaki yango kashe ; namekaki kilo ya mbongo ya bibende ya palata na miso ya batatoli, na emekelo kilo. \v 11 Nakamataki mokanda oyo nasombelaki elanga, oyo nabetaki kashe, oyo kati na yango bakoma malako ya mibeko mpe mabongisi ; mpe nazwaki lisusu mokanda oyo babeta kashe te ; \v 12 mpe napesaki mokanda oyo nasombelaki elanga epai ya Baruki, mwana mobali ya Neriya, mwana mobali ya Maaseya, na miso ya Anameyeli, mwana ya noko na ngai, mpe ya batatoli oyo batiaki mikoloto na bango kati na mokanda oyo nasombelaki elanga, mpe na miso ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kati na lopango ya bakengeli. \p \v 13 Napesaki Baruki mitindo oyo na miso na bango nyonso : \v 14 ‹ Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Kamata mikanda oyo nasombelaki elanga, ezala oyo babeta kashe to oyo babeta kashe te ; tia yango kati na mbeki oyo basala na mabele ya bikeko mpo ete ebeba te. \v 15 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bato bakosomba lisusu bandako, bilanga mpe bilanga ya vino kati na mokili oyo. › \s1 Libondeli ya Jeremi \p \v 16 Sima na ngai kopesa mokanda oyo nasombelaki elanga epai ya Baruki, mwana mobali ya Neriya, nabondelaki Yawe : \pm \v 17 Oh Nkolo Yawe ! Yo nde osala likolo mpe mabele na nguya monene na Yo, otanda yango na makasi ya loboko na Yo : olembanaka likambo moko te. \v 18 Otalisaka bolingo na Yo epai ya bato kino na molongo ya nkoto, kasi opesaka etumbu mpo na masumu ya batata epai ya bana mpe bakitani na bango. Oh Nzambe monene mpe ya nguya, Kombo na Yo ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga ; \v 19 mabongisi na Yo ezali minene mpe misala minene na Yo ezali ya kokamwa ; miso na Yo ezalaka ya kofungwama mpo na kotala banzela nyonso ya bato, mpo na kopesa na moto nyonso kolanda etamboli mpe misala na ye. \v 20 Osalaki bilembo minene mpe bikamwa kati na Ejipito mpe ozali kokoba kosala yango kino lelo kati na Isalaele mpe kati na bato nyonso, mpe osalaki ete Kombo na Yo ekende sango ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo. \v 21 Obimisaki bato na Yo, Isalaele, na Ejipito na nzela ya bilembo minene mpe bikamwa wana osalelaki nguya na Yo mpe osembolaki loboko na Yo ya nguya mpo na koyeisa somo kati na bato ya Ejipito. \v 22 Opesaki bango mokili oyo, na nzela ya ndayi, olakaki kopesa na batata na bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi. \v 23 Bakotaki kati na yango mpe babotolaki yango ; kasi batosaki Yo te, basalelaki Mobeko na Yo te, basalaki te nyonso oyo otindaki bango. Yango wana omemelaki bango pasi oyo nyonso. \pm \v 24 Tala, banguna basili kobongama mpo na kobotola engumba ! Likolo ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, oyo bazali kobundisa yango. Makambo oyo olobaki ekokisami, ndenge ozali komona yango na mokolo ya lelo. \v 25 Mpe atako engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni, Yo, Nkolo Yawe, olobi na ngai : ‹ Somba elanga na mbongo ya bibende ya palata na miso ya batatoli. › » \s1 Eyano ya Yawe \p \v 26 Bongo Yawe alobaki na Jeremi : \v 27 « Nazali Yawe, Nzambe ya moto nyonso. Boni, ezali na likambo oyo Ngai nakoki kolembana ? \v 28 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokaba engumba oyo na maboko ya bato ya Babiloni mpe ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpo ete azwa yango. \v 29 Bato ya Babiloni oyo bazali kobundisa engumba oyo, bakokota kati na yango mpe bakotumba yango ; bakotumba yango elongo na bandako oyo, na likolo ya manzanza na yango, bato bazalaki kotumbola Ngai na kobonza bambeka ya malasi ya ansa epai ya nzambe Bala mpe kobonza makabo ya masanga ya vino epai ya banzambe ya bapaya. \v 30 Bana ya Isalaele mpe ya Yuda, wuta bolenge na bango, bazalaki kosala eloko mosusu te na miso na Ngai, soki kaka mabe te ; solo, bana ya Isalaele bazalaki kosala eloko mosusu te, soki kaka te kopesa Ngai kanda na nzela ya biloko oyo maboko na bango esalaki, elobi Yawe. \v 31 Wuta batonga engumba oyo kino na mokolo ya lelo, mosala na yango kaka kotumbola Ngai mpe kopesa Ngai kanda ; yango wana, nakolongola yango liboso na Ngai. \v 32 Bato ya Isalaele mpe ya Yuda bapesaki Ngai kanda na nzela ya mabe nyonso oyo basalaki : ezala bango, bakonzi na bango, bakalaka na bango, Banganga-Nzambe mpe basakoli na bango, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi. \v 33 Bapesaki Ngai mokongo na esika ya kotala Ngai. Atako nazalaki tango na tango koteya bango, kasi batikalaki koyoka Ngai te mpe baboyaki kozwa mayele. \v 34 Batiaki kutu banzambe na bango ya bikeko kati na Ndako epai wapi babelaka Kombo na Ngai, mpe na bongo, bakomisaki yango mbindo. \v 35 Bakomaki kotonga bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na Bala, na Lubwaku ya Beni-Inomi, mpo na kobonza bana na bango ya mibali mpe ya basi epai ya Moloki ; ezali likambo oyo Ngai natikalaki kotinda bango te, mpe natikala kokanisa te ete bakoki kosala makambo ya nkele boye mpo na komemisa Yuda masumu. \p \v 36 Mpo na yango, tala sik’oyo liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na engumba oyo bino bozali koloba ete ekabami na maboko ya mokonzi ya Babiloni na nzela ya mopanga, ya nzala makasi mpe ya bokono oyo ebomaka : \v 37 ‹ Solo, nakosangisa bango wuta na mikili nyonso epai wapi nabenganaki bango tango natombokelaki bango, nakozongisa bango na esika oyo mpe nakovandisa bango na kimia. \v 38 Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango. \v 39 Nakopesa bango motema se moko mpe etamboli se moko mpo ete batosaka Ngai tango nyonso mpo na bolamu na bango mpe mpo na bolamu ya bakitani na bango. \v 40 Nakosala boyokani ya libela elongo na bango, nakotika te kosalela bango bolamu mpe nakosala ete batosa Ngai mpe bapesa Ngai lisusu mokongo te. \v 41 Nakosepela kosalela bango bolamu mpe nakolona bango penza kati na mokili oyo, na motema mpe na molimo na Ngai mobimba. › \p \v 42 Tala liloba oyo Yawe alobi : Ndenge natindelaki bato oyo pasi oyo nyonso, ndenge wana mpe nakotindela bango bomengo nyonso oyo nalakaki bango. \v 43 Bato bakosomba lisusu bilanga kati na mokili oyo bino bozali koloba na tina na yango : ‹ Mokili oyo ebeba, etikala lisusu na bato mpe na banyama te ; pamba te ekabama na maboko ya bato ya Babiloni. › \v 44 Solo, bakosomba lisusu bilanga na motuya ya palata, bakotia mikoloto mpe bakashe na mikanda oyo bakosombela bilanga yango, na miso ya batatoli, kati na mboka ya Benjame, kati na bamboka mike-mike oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi, kati na bingumba ya Yuda mpe kati na bingumba ya mokili ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi ; pamba te nakozongisa bato na bango oyo bakendeki na bowumbu, elobi Yawe. » \c 33 \s1 Elaka ya lobiko \p \v 1 Yawe alobaki na Jeremi, na mbala ya mibale, wana azalaki nanu ya kokangama kati na boloko oyo ezalaki kati na lopango ya bakengeli : \p \v 2 « Tala liloba oyo Yawe, Ye oyo akela mabele, oyo abongisa yango malamu mpe alendisa yango, oyo Kombo na Ye ezali Yawe, alobi : \v 3 ‹ Belela Ngai, mpe Ngai nakoyanola yo, nakoyebisa yo makambo minene mpe mabombami oyo oyebi te. › \v 4 Pamba te, tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na bandako ya engumba oyo mpe ya bandako ya bakonzi ya Yuda, oyo babukaki mpo na kotelemela bangomba mike ya kokimela mpe mopanga ya monguna \v 5 kati na etumba na bato ya Babiloni : ‹ Bandako yango ekotonda na bibembe ya bato oyo nakoboma na nguya ya kotomboka mpe ya kanda na Ngai. Nakobombela engumba oyo elongi na Ngai likolo ya mabe na yango nyonso. \p \v 6 Kasi nakoyeisa bato na yango nzoto kolongono mpe nakobikisa bango ; solo, nakobikisa bato na Ngai mpe nakopesa bango bomoi ya kimia kati na bobatelami. \v 7 Nakokangola bato ya Yuda mpe ya Isalaele longwa na bowumbu mpe nakokomisa bango lisusu ndenge bazalaki liboso. \v 8 Nakopetola bango na masumu nyonso oyo basalaki liboso na Ngai. Nakolimbisa masumu nyonso ya botomboki oyo basalaki liboso na Ngai. \v 9 Boye engumba oyo, Yelusalemi, ekosala lokumu, esengo, masanzoli mpe nkembo ya Kombo na Ngai liboso ya bikolo nyonso ya mabele, oyo ekoyoka sango ya makambo nyonso ya kitoko oyo nakosala mpo na yango. Bikolo yango ekokamwa mpe ekolenga na somo ya komona makambo nyonso ya kitoko mpe kimia oyo nakopesa na engumba yango. › \p \v 10 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bozali koloba na tina na esika oyo : ‘ Eh ! Esika oyo ebeba ! Ezalaka lisusu na bato mpe banyama te ! ’ Nzokande, kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi oyo ekoma polele, ezanga bato mpe banyama, ekozala lisusu na lokito : \v 11 ekoyokana kuna lokito ya banzembo ya esengo mpe ya masanzoli, mingongo ya mobandami na libala ya mwasi mpe ya mobali, mpe mingongo ya bato oyo bazali kobonza kati na Tempelo ya Yawe makabo ya kozongisa matondi, na koloba : \q1 ‘ Bozongisa matondi epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 mpo ete Yawe azali malamu ; \q1 bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! ’ \m Pamba te nakozongisa lisusu kitoko ya mokili yango ndenge ezalaki liboso, › elobi Yawe. \p \v 12 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Kati na esika oyo ebebisama mpe ezanga bato to banyama, mpe kati na bingumba na yango nyonso, ekozala na lisusu na bitando ya matiti mpo na babateli bibwele, bitando epai wapi bakoleisa bibwele na bango. \v 13 Kati na bingumba ya bangomba, kati na bingumba ya bitando mpe kati na bingumba ya Negevi, kati na etuka ya Benjame, kati na bamboka oyo ezali zingazinga ya Yelusalemi mpe kati na bingumba ya Yuda, bibwele ekoleka lisusu na se ya loboko ya moto oyo atangaka yango, › elobi Yawe. \p \v 14 ‹ Na mikolo ekoya, › elobi Yawe, ‹ nakokokisa elaka kitoko oyo napesaki na mabota ya Isalaele mpe ya Yuda. \q1 \v 15 Na mikolo yango mpe na tango yango, \q2 nakobimisa Moto ya nzete ya sembo \q1 wuta na libota ya Davidi ; \q2 akosala makambo ya sembo \q2 mpe ya boyengebene kati na mokili. \q1 \v 16 Na mikolo wana, Yuda ekobikisama, \q2 mpe Yelusalemi ekozala na kimia. \q1 Tala kombo oyo bakobengela yango : \q2 Yawe azali Bosembo na biso. › \m \v 17 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Davidi akozalaka tango nyonso na moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya libota ya Isalaele ; \v 18 Banganga-Nzambe oyo bazali bakitani ya Levi bakozalaka tango nyonso na bakitani oyo bakobanda kotelema tango nyonso liboso na Ngai mpo na kotumba mbeka, kobonza mbeka ya gato mpe kobonza makabo. › » \p \v 19 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : \v 20 « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Soki bolongi kokata boyokani na Ngai elongo na moyi, mpe boyokani na Ngai elongo na butu, mpo ete moyi mpe butu ekoma lisusu te na tango na yango, \v 21 wana bokolonga penza kokata boyokani na Ngai elongo na Davidi, mosali na Ngai, mpe Davidi akotikala kozala lisusu te na mokitani na kiti ya bokonzi, mpe bokolonga kokata boyokani na Ngai elongo na Balevi oyo bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ngai. \v 22 Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › » \p \v 23 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : \v 24 « Boni ! Bozali koyoka te makambo bato oyo bazali kosala ? Bazali koloba : ‹ Yawe asundoli bituka mibale oyo aponaki. › Na bongo, bazali kotiola bato na Ngai, mpe moto ata moko te azali kozwa bango lokola ekolo. \v 25 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Soki nasalaki boyokani te elongo na moyi mpe elongo na butu, mpe soki napesaki likolo mpe mabele mibeko te, \v 26 wana nakokaki kobwaka bakitani ya Jakobi mpe ya Davidi, mosali na Ngai, mpe nalingaki te kopona moko kati na bana na ye mpo ete akamba bakitani ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi. Nakozongisa lisusu kitoko ya mokili na bango mpe nakoyokela bango mawa. › » \c 34 \s1 Pamela ya mokonzi Sedesiasi \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na basoda na ye nyonso, mikili ya bakonzi nyonso oyo azalaki kokamba, mpe bikolo nyonso bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso ya zingazinga na yango : \v 2 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : kende koloba na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nasengeli kokaba engumba oyo na maboko ya mokonzi ya Babiloni, mpe akobebisa yango na moto. \v 3 Bongo yo, okobika te na loboko na ye, kasi bakokanga yo solo mpe bakokaba yo na maboko na ye ; okomona mokonzi ya Babiloni miso na yo moko, akolobana na yo elongi na elongi, mpe okokende na Babiloni. \p \v 4 Nzokande, Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, yoka Liloba na Yawe ! Tala elaka oyo Yawe apesi yo : Okokufa na mopanga te, \v 5 kasi okokufa na kimia. Mpe ndenge bato bapelisaki moto mpe batumbaki malasi ya solo kitoko, na matanga ya batata na yo, bakonzi ya kala oyo baleka liboso na yo, mpo na kopesa bango lokumu, ndenge wana mpe bakosala mpo na lokumu na yo. Mpe bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo : ‘ Oh mawa, nkolo na ngai ! ’ Solo, Ngai moko nde napesi elaka oyo, elobi Yawe. › » \p \v 6 Mosakoli Jeremi alobaki na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, maloba wana nyonso, kati na Yelusalemi, \v 7 wana basoda ya mokonzi ya Babiloni bazalaki kobundisa Yelusalemi mpe bingumba nyonso mosusu ya Yuda, oyo mokonzi ya Babiloni alongaki nanu te : Lakishi mpe Azeka, pamba te yango kaka nde ezalaki bingumba batonga makasi oyo etikalaki kati na Yuda. \s1 Bawumbu bazwi bonsomi \p \v 8 Sima na mokonzi Sedesiasi kosala boyokani elongo na bato nyonso kati na Yelusalemi mpo ete kokangolama ya bawumbu nyonso esakolama, Yawe alobaki na Jeremi \v 9 mpo ete moto nyonso apesa bawumbu na ye bonsomi, bawumbu oyo bazali Ba-Ebre, bazala mibali to basi ; mpe mpo ete moto moko te akoba kokanga ndeko na ye, Moyuda, kati na bowumbu. \p \v 10 Boye, bakambi nyonso mpe bato nyonso oyo basalaki boyokani yango bandimaki kokangola bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi mpe kopesa bango bonsomi, mpo ete bakoba lisusu te kokanga bango na bowumbu ; bandimaki, bakokisaki mpe bapesaki bawumbu na bango bonsomi. \v 11 Kasi sima na tango, babongolaki makanisi na bango ; bakangaki lisusu na bowumbu mibali mpe basi oyo bango basilaki kopesa bonsomi, mpe bakomisaki bango lisusu bawumbu. \p \v 12 Boye, tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : \v 13 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nasalaki boyokani elongo na bakoko na bino tango nabimisaki bango na Ejipito, mokili ya bowumbu ; nalobaki : \v 14 ‹ Sima na mibu sambo nyonso, moto nyonso kati na bino asengeli kopesa bonsomi na Moyuda, ndeko na ye, oyo amitekaki lokola mowumbu ; akosalela yo mibu motoba, bongo, sima na yango, okotika ye kokende na bonsomi. › Kasi bakoko na bino bayokaki Ngai te mpe batosaki Ngai te. \v 15 Nzokande bino, na mwa mikolo oyo kaka, bobongolaki bino moko mitema mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai : moko na moko kati na bino asakolaki kokangolama ya ndeko na ye, apesaki ndeko na ye bonsomi. Bosalaki kutu boyokani yango liboso na Ngai, kati na Ndako Ngai. \v 16 Kasi tala sik’oyo makambo bosali : bozongi sima, botiki ekateli oyo bozwaki mpe botioli bosantu ya Kombo na Ngai ; pamba te bozongisi bawumbu na bino ya kala, mibali to basi, oyo bopesaki bonsomi mpo ete bakende na esika nyonso oyo balingi ; bokangi bango na makasi mpo ete bakoma lisusu bawumbu na bino. \p \v 17 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi : Lokola botosaki Ngai te, bosakolaki te kokangolama ya bandeko na bino moko mpe bopesaki bango bonsomi te, Ngai mpe, elobi Yawe, nasakoli ete napesi sik’oyo bonsomi epai ya mopanga, epai ya bokono oyo ebomaka mpe epai ya nzala makasi ; nafungoli yango mpo na kotelemela bino : nakokomisa bino eloko ya koyoka somo, na miso ya bikolo nyonso ya mabele ; \v 18 nakokaba bato oyo babebisaki boyokani na Ngai mpe bakokisaki te malako ya boyokani oyo basalaki liboso na Ngai, na nzela ya kokata na biteni mibale mwana ngombe ya mobali mpe ya kotambola na kati-kati ya biteni yango. \v 19 Bakambi ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bakalaka ya lokumu, Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya mokili, oyo batambolaki na kati-kati ya biteni ya mwana ngombe ya mobali, \v 20 nakokaba bango na maboko ya banguna na bango mpe ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ; mpe bibembe na bango ekokoma bilei ya bandeke ya likolo mpe ya banyama ya mabele. \p \v 21 Nakokaba Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, elongo na bakalaka na ye na maboko ya banguna na bango, oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya mampinga ya mokonzi ya Babiloni, oyo akei sik’oyo mosika na bino. \v 22 Nakopesa bango mitindo, elobi Yawe, mpe nakozongisa bango kati na engumba oyo : bakobundisa yango, bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. Mpe nakokomisa bingumba ya Yuda esobe, ezanga bavandi. » \c 35 \s1 Libota ya Rekabi \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi wana Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, azalaki mokonzi : \v 2 « Kende epai ya bato ya libota ya Rekabi mpe bengisa bango ete baya kokota kati na moko ya bashambre ya Tempelo ya Yawe. Mpe pesa bango masanga ya vino ya komela kuna. » \p \v 3 Boye, nakendeki kokutana na Yazania, mwana mobali ya Jeremi, mwana mobali ya Abatsinia, mpe bandeko na ye ya mibali elongo na bana na bango nyonso ya mibali : libota mobimba ya bato ya libota ya Rekabi. \v 4 Namemaki bango na Tempelo ya Yawe, kati na shambre ya bana mibali ya Anani, mwana mobali ya Yigidalia, moto na Nzambe, pene ya shambre ya bakambi. Shambre yango ezalaki na sima ya shambre ya Maaseya, mwana mobali ya Shalumi, mokengeli ekuke. \v 5 Natiaki biloko etonda na vino mpe ndambo ya bakopo liboso ya bato ya libota ya Rekabi ; mpe nalobaki na bango : \pi1 — Bomela masanga ya vino. \p \v 6 Kasi bazongisaki : \pi1 — Tomelaka masanga ya vino te, mpo ete koko na biso, Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki biso mobeko oyo : « Bokoki komela masanga ya vino te, ezala bino to bakitani na bino, \v 7 mpe bokoki kotonga bandako te, kosala bilanga te, kolona banzete ya vino te mpe bokoki kozala na biloko wana te ; kasi bosengeli kaka kovanda tango nyonso na bandako ya kapo, mpo ete bozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bozali baleki nzela. » \v 8 Totosaka makambo nyonso oyo koko na biso Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, ayebisa biso : Ezala biso, basi na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, tomelaka masanga ya vino te, \v 9 totongaka bandako te mpo na kovanda kuna, tozalaka na bilanga ya vino te, bilanga te mpe milona te ; \v 10 tovandaka kaka na bandako ya kapo mpe totosaka makambo nyonso oyo koko na biso, Yonadabi, ayebisa biso. \v 11 Kasi tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abotolaki mokili oyo, tolobaki : « Boya, tokende na Yelusalemi mpo ete tobikisa bomoi na biso liboso ya basoda ya Babiloni mpe ya Siri. » Yango wana, toyaki kovanda na Yelusalemi. \p \v 12 Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Jeremi : \pi1 \v 13 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Kende koyebisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi : « Bokoki solo kozwa liteya te mpe kotosa maloba na Ngai te, » elobi Yawe ? \v 14 « Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, apesaki mobeko epai ya bana na ye ete bamela masanga ya vino te, mpe babatelaka mobeko yango. Kino na mokolo ya lelo, bamelaka masanga ya vino te mpo na kotosa mobeko oyo koko na bango apesaki bango. Nzokande, tango na tango, Ngai nazalaki koloba na bino, kasi bozalaki koyoka Ngai te. \v 15 Nazalaki tango na tango kotindela bino basali na Ngai nyonso, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Tika ete moko na moko kati na bino atika nzela na ye ya mabe mpe abongola bizaleli na ye ; bosalela banzambe mosusu te mpo ete bokoka kovanda kati na mokili oyo napesaki bino mpe batata na bino. › Kasi boyokaki Ngai te mpe botosaki Ngai te. \v 16 Bakitani ya Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, babatelaki mobeko oyo koko na bango apesa bango, kasi bato oyo baboyi kotosa Ngai. » \pi1 \v 17 Yango wana, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boyoka ! Nakoyeisa na mokili ya Yuda mpe epai ya bavandi nyonso ya Yelusalemi pasi oyo nakataki ; pamba te nalobaki na bango kasi bayokaki Ngai te, nabengaki bango kasi bayanolaki Ngai te. » \p \v 18 Boye, Jeremi alobaki na bato ya libota ya Rekabi : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Lokola botosaka mobeko ya koko na bino Yonadabi, bolandaka malako nyonso oyo ayebisa bino mpe bosalelaka makambo nyonso oyo atinda bino, \v 19 tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, akotikala kozanga te moto oyo akosalela Ngai. › » \c 36 \ms1 Bapasi ya mosakoli Jeremi \s1 Yeoyakimi atumbi mokanda ya mosakoli Jeremi \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na Jeremi, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda : \v 2 « Kamata mokanda, mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo nalobaki na yo mpo na Isalaele, mpo na Yuda mpe mpo na bikolo nyonso mosusu, wuta mokolo oyo nabandaki koloba na yo, na tango Joziasi azalaki mokonzi, kino na mokolo ya lelo. \v 3 Tango mosusu, soki bato ya Yuda bayoki sango ya pasi nyonso oyo nabongisi mpo na kotindela bango, moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; mpe, na bongo, Ngai nakolimbisa mabe mpe masumu na bango. » \p \v 4 Boye, Jeremi abengaki Baruki, mwana mobali ya Neriya, mpe wana Jeremi azalaki koloba makambo nyonso oyo Yawe ayebisaki ye, Baruki azalaki kokoma yango na mokanda. \p \v 5 Jeremi alobaki na Baruki : « Ngai nakangami, nakolonga kokende na Tempelo ya Yawe te. \v 6 Boye yo, kende na Tempelo ya Yawe, na mokolo ya kokila bilei, mpe tangela bato maloba ya Yawe, oyo okomaki na mokanda, wana ngai nazalaki koloba na yo ; tangela yango bato nyonso ya Yuda, oyo bakoya wuta na bingumba na bango. \v 7 Tango mosusu mabondeli na bango ekokoma liboso ya Yawe, mpe moko na moko kati na bango akotika nzela na ye ya mabe ; pamba te kotomboka mpe kanda oyo Yawe akani kokitisela bato oyo ezali monene. » \p \v 8 Baruki, mwana mobali ya Neriya, asalaki makambo nyonso oyo mosakoli Jeremi atindaki ye kosala ; atangaki na Tempelo ya Yawe maloba ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda. \p \v 9 Na sanza ya libwa, ya mobu ya mitano ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, babengisaki mokolo ya kokila bilei liboso ya Yawe, mpo na bavandi nyonso ya Yelusalemi mpe bato oyo bawutaki na bingumba ya Yuda. \v 10 Baruki atangelaki bato nyonso, kati na Tempelo ya Yawe, maloba ya Jeremi oyo ekomamaki na mokanda, wuta na shambre ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani oyo azalaki mokomi mikanda ; shambre yango ezalaki kati na lopango ya likolo, na ekotelo ya Ekuke ya Sika ya Tempelo. \p \v 11 Tango Mishe, mwana, mobali ya Gemaria, mwana mobali ya Shafani, ayokaki maloba nyonso ya Yawe oyo ekomamaki na mokanda, \v 12 akendeki na ndako ya mokonzi, akotaki kati na ndako ya mosala ya mokomi mikanda epai wapi bakalaka nyonso bazalaki na mayangani : Elishama, mokomi mikanda ; Delaya, mwana mobali ya Shemaya ; Elinatani, mwana mobali ya Akibori ; Gemaria, mwana mobali ya Shafani ; Sedesiasi, mwana mobali ya Anania ; mpe bakalaka nyonso mosusu. \v 13 Sima na Mishe koyebisa bango makambo nyonso oyo ayokaki epai ya Baruki tango azalaki kotangela bato makomi oyo ezalaki kati na mokanda, \v 14 bakambi nyonso batindaki Yewudi, mwana mobali ya Netania, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Kushi, epai ya Baruki mpo na koyebisa ye : « Yaka yo moko elongo na mokanda oyo atangelaki bato. » \p Baruki, mwana mobali ya Neriya, akendeki epai na bango mpe amemaki mokanda na maboko na ye. \v 15 Balobaki na ye : \pi1 — Tobondeli yo, vanda, tangela biso mokanda oyo. \p Baruki atangelaki bango mokanda yango. \v 16 Tango bayokaki maloba wana nyonso, bakomaki kotalana bango na bango na somo mpe balobaki na Baruki : \pi1 — Tosengeli penza koyebisa makambo oyo nyonso epai ya mokonzi. \p \v 17 Batunaki Baruki : \pi1 — Yebisa biso ndenge nini osalaki mpo na kokoma makambo oyo nyonso. Ezali Jeremi te moto ayebisi yo makambo oyo ? \p \v 18 Baruki azongisaki : \pi1 — Solo, ezali ye moto ayebisaki ngai makambo oyo nyonso, mpe ngai nasalelaki kaka ekomeli mpo na kotia yango na mokanda. \p \v 19 Bakambi bayebisaki Baruki : \pi1 — Yo mpe Jeremi, bokende kobombama. Mpe tika ete moto moko te ayeba esika bokozala. \p \v 20 Sima na bango kotia mokanda yango kati na ndako ya mosala ya Elishama, mokomi mikanda, bakendeki epai ya mokonzi kati na lopango mpe bayebisaki ye makambo nyonso. \p \v 21 Mokonzi atindaki Yewudi mpo ete akende kozwa mokanda yango, mpe Yewudi akendeki kozwa yango na ndako ya mosala ya mokomi mikanda Elishama mpe atangaki yango liboso ya mokonzi mpe ya bakalaka nyonso oyo batelemaki pene na ye. \v 22 Ezalaki na sanza ya libwa ; mokonzi avandaki kati na shambre oyo bakimelaka na tango ya malili mpe azalaki koyetola moto oyo ezalaki kopela liboso na ye. \v 23 Soki Yewudi atangi milongo misato to minei ya makomi ya mokanda, mokonzi azalaki kokata yango na mbeli ya mokomi mikanda mpe kobwaka yango na moto, kino tango mokanda nyonso esilaki kozika na moto. \v 24 Boye, mokonzi elongo na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki koyoka makambo oyo ekomamaki na mokanda yango bamitungisaki na eloko moko te mpe bapasolaki bilamba na bango te. \v 25 Atako Elinatani, Delaya mpe Gemaria bazalaki kobondela mokonzi ete atumba mokanda yango te, atikalaki koyokela bango te. \v 26 Kutu, mokonzi atindaki Yerameeli, kalaka ya makila ; Seraya, mwana mobali ya Azirieli, mpe Shelemia, mwana mobali ya Abideyeli, ete bakanga Baruki, mokomi mikanda, mpe mosakoli Jeremi. Kasi Yawe abombaki bango. \p \v 27 Tango mokonzi asilisaki kotumba mokanda oyo ezalaki na maloba oyo Baruki akomaki na etinda ya Jeremi, Yawe alobaki na Jeremi : \pi1 \v 28 — Kamata mokanda mosusu mpe koma kati na yango makambo nyonso oyo ezalaki na mokanda ya liboso oyo mokonzi Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki. \v 29 Loba lisusu na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Ezali yo nde moto otumbaki mokanda wana mpe olobaki : ‹ Mpo na nini okomaki ete mokonzi ya Babiloni akoya kobebisa mokili oyo mpe koboma ezala bato to banyama ? › \v 30 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda : Ekozala na mokitani na ye moko te oyo akokitana na ye na kiti ya bokonzi ya Davidi ; ebembe na ye ekobwakama na libanda, mpe bakotanda yango na molunge ya moyi mpe na malili ya butu. \v 31 Nakopesa ye, bana na ye mpe basali na ye nyonso etumbu mpo na mabe na bango ; nakotindela bango elongo na bavandi ya Yelusalemi mpe ya Yuda, pasi nyonso oyo nalakaki bango, mpo ete bayokaki Ngai te. » \p \v 32 Jeremi azwaki mokanda mosusu mpe apesaki yango na Baruki, mokomi mikanda, mwana mobali ya Neriya. Wana Jeremi azalaki koloba makambo oyo ezalaki kati na mokanda oyo Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda, atumbaki, Baruki azalaki kokoma yango. Mpe makambo ebele mosusu ya lolenge wana ebakisamaki na kati. \c 37 \s1 Mosakoli Jeremi na boloko \p \v 1 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akomisaki Sedesiasi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda na esika ya Konia, mwana mobali ya Yeoyakimi. \v 2 Ezala ye, bakalaka na ye ya lokumu mpe bato ya mokili, moko te ayokaki na bokebi maloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi. \p \v 3 Mokonzi Sedesiasi atindaki Yewukali, mwana mobali ya Shelemia, mpe Nganga-Nzambe Sofoni, mwana mobali ya Maaseya, epai ya mosakoli Jeremi mpo ete bayebisa ye maloba oyo : « Nabondeli yo, bondela Yawe, Nzambe na biso, mpo na biso ! » \p \v 4 Na tango wana, Jeremi azalaki na bonsomi ya kotambola na esika oyo alingi kati na bato, pamba te batiaki ye nanu na boloko te. \v 5 Tango basoda ya Babiloni, oyo bazingelaki engumba Yelusalemi bayokaki sango ete basoda ya Faraon babimi na Ejipito, batikaki kozingela Yelusalemi. \v 6 Bongo tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi : \v 7 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Yebisa mokonzi ya Yuda oyo atindi yo kotuna toli epai na Ngai : ‹ Basoda ya Faraon oyo babimaki na mokili na bango mpo na koya kosunga yo bakozonga na mokili na bango, na Ejipito ; \v 8 mpe basoda ya Babiloni bakozonga mpe bakobundisa engumba oyo ; bakobotola yango mpe bakobebisa yango na moto. › \v 9 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bokanisa te ete bato ya Babiloni bakolongwa na mokili na bino. Te ! Bakolongwa te. › \v 10 Ezala soki bolongi basoda nyonso ya Babiloni, oyo bazali kobundisa bino mpe etikali kaka ndambo ya bato oyo bazoki-zoki bapota, bakolonga kotelema kati na bandako na bango ya kapo mpe kobima mpo na kobebisa engumba oyo na moto. » \p \v 11 Sima na basoda ya Babiloni kotika kozingela Yelusalemi likolo ya basoda ya Faraon, oyo bazalaki kopusana, \v 12 Jeremi alingaki kobima na Yelusalemi mpo ete akende kozwa, kati na etuka ya Benjame, libula na ye ya mabele kati na bato ya kuna. \v 13 Kasi tango akomaki na Ekuke ya Benjame, mokambi ya bakengeli ya mokonzi, oyo kombo na ye ezalaki Iriya, mwana mobali ya Shelemia, mwana mobali ya Anania, akangaki mosakoli Jeremi mpe atunaki ye : \pi1 — Boni, ozali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni ? \p \v 14 Jeremi azongisaki : \pi1 — Te ! Ezali lokuta, nazali kokende na ngambo ya bato ya Babiloni te ! \p Kasi Iriya aboyaki koyoka ye, akangaki ye kaka mpe amemaki ye epai ya bakambi. \v 15 Bakambi batombokelaki Jeremi makasi, babetaki ye mpe batiaki ye na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, ndako oyo bakomisaki boloko. \v 16 Babwakaki Jeremi kati na boloko ya se ya mabele epai wapi awumelaki tango molayi. \p \v 17 Mokolo moko, mokonzi Sedesiasi atindaki ete bakende kozwa ye mpe bamema ye na ndako ya mokonzi epai wapi atunaki ye na nkuku : \pi1 — Boni, ozali ata na liloba moko te kowuta epai na Yawe ? \p Jeremi azongisaki : \pi1 — Solo, liloba ezali ! Okokweya na maboko ya mokonzi ya Babiloni. \p \v 18 Bongo Jeremi alobaki lisusu na mokonzi Sedesiasi : \pi1 — Mabe nini penza ngai nasali yo to bakalaka na yo to mpe bato na yo mpo ete bobwaka ngai kati na boloko oyo ? \v 19 Wapi basakoli na bino oyo bazalaki koloba ete mokonzi ya Babiloni akoya te kobundisa bino mpe mokili na bino ? \v 20 Kasi sik’oyo mokonzi, nkolo na ngai, nabondeli yo : yoka ngai ! Tika ete mabondeli na ngai ekoma liboso na yo : kozongisa ngai te kati na ndako ya Jonatan, mokomi mikanda, noki te nakokufa kuna ! \p \v 21 Mokonzi Sedesiasi apesaki mitindo ete batia Jeremi kati na lopango ya bakengeli mpe bapesaka ye, mokolo na mokolo, lipa moko oyo ekobanda kowuta na balabala ya bato oyo basalaka mapa, kino tango mapa ekosila kati na engumba. Boye, Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli. \c 38 \s1 Babwaki Jeremi na libulu \p \v 1 Shefatia, mwana mobali ya Matani ; Gedalia, mwana mobali ya Pashuri ; Yukali, mwana mobali ya Shelemia ; mpe Pashuri, mwana mobali ya Malikiya, bayokaki makambo oyo Jeremi azalaki koyebisa bato nyonso. Azalaki koloba : \v 2 « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Moto nyonso oyo akotikala kati na engumba oyo akokufa na mopanga, na nzala makasi to mpe na bokono oyo ebomaka ; kasi ye oyo akobima mpo na kokende komikaba epai ya bato ya Babiloni akobika, akokufa te ; bomoi na ye ekozala bomengo na ye ya bitumba, mpe akotikala na bomoi. › \v 3 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Engumba oyo ekokweya na maboko ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobotola yango. › » \p \v 4 Bakalaka balobaki na mokonzi : \pi1 — Moto oyo asengeli kokufa ! Maloba na ye ezali kolembisa basoda mpe bato oyo batikali kati na engumba oyo ; azali koluka bolamu ya bato oyo te, kasi azali nde koluka mabe na bango. \p \v 5 Mokonzi Sedesiasi azongisaki : \pi1 — Azali na maboko na bino ; mokonzi akoki koboya likanisi na bino te ! \p \v 6 Boye, bakamataki Jeremi mpe babwakaki ye kati na libulu ya Malikiya, mwana mobali ya mokonzi ; libulu yango ezalaki kati na lopango ya bakengeli. Bakitisaki Jeremi kati na libulu na nzela ya basinga ; libulu ezalaki na mayi te, kaka na potopoto ; mpe Jeremi azindaki makasi kati na potopoto yango. \p \v 7 Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, kalaka ya lokumu oyo azalaki kosala kati na ndako ya mokonzi, ayokaki ete babwaki Jeremi kati na libulu. Boye, wana mokonzi avandaki na Ekuke ya Benjame, \v 8 Ebedi-Meleki abimaki na ndako ya mokonzi mpe akendeki koloba na mokonzi : \pi1 \v 9 — Mokonzi, nkolo na ngai, kati na nyonso oyo basali mosakoli Jeremi, bato oyo basali mabe penza ! Basili kobwaka ye kati na libulu epai wapi akokufa na nzala, mpo ete mapa ezali lisusu te kati na engumba ! \p \v 10 Mokonzi apesaki mitindo oyo epai ya Ebedi-Meleki, moto ya mokili ya Kushi : \pi1 — Kamata awa mibali tuku misato elongo na yo, mpe bobimisa mosakoli Jeremi wuta na libulu liboso ete akufa. \p \v 11 Ebedi-Meleki akamataki mibali yango mpe akendeki na ndako ya mokonzi, kati na shambre oyo ezalaki na se ya ebombelo bomengo ; azwaki kuna bilamba ya kala mpe oyo epasuka, mpe akitisaki yango na nzela ya basinga epai ya Jeremi kati na libulu. \v 12 Ebedi-Meleki, moto ya Kushi, alobaki na Jeremi : \pi1 — Tia bilamba oyo na se ya mapeka na yo, likolo ya basinga oyo mpo na kobatela mapeka na yo. \p Jeremi asalaki se bongo. \v 13 Babendaki ye na basinga mpe babimisaki ye na libulu. Mpe Jeremi avandaki kati na lopango ya bakengeli. \s1 Mituna ya Sedesiasi epai ya Jeremi \p \v 14 Mokonzi Sedesiasi atindaki ete bamemela ye mosakoli Jeremi mpe bakotisa ye na Ekuke ya misato ya Tempelo ya Yawe. Mokonzi alobaki na Jeremi : \pi1 — Nazali na likambo moko ya kotuna epai na yo ; kobombela ngai eloko moko te ! \p \v 15 Jeremi alobaki na mokonzi Sedesiasi : \pi1 — Soki nayebisi yo yango, okoboma ngai te ? Ezala napesi yo toli, okoyokela na yo ngai te. \p \v 16 Kasi mokonzi Sedesiasi alapaki ndayi na nkuku epai ya Jeremi : \pi1 — Na Kombo na Yawe oyo apesaka biso pema, nakoboma yo te, mpe nakokaba yo te na maboko ya bato oyo balingi koboma yo ! \p \v 17 Bongo Jeremi alobaki na Sedesiasi : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : « Soki kaka omipesi epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, yo mpe libota na yo bokokufa te, mpe engumba oyo ekobebisama na moto te. \v 18 Kasi soki oboyi komipesa epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, engumba oyo ekokweya na maboko ya bato ya Babiloni mpe bakotumba yango, bongo ezala yo, okobika te na maboko na bango. » \p \v 19 Mokonzi Sedesiasi alobaki na Jeremi : \pi1 — Nazali kobanga Bayuda oyo bakei na ngambo ya bato ya Babiloni, mpo ete bato ya Babiloni bakoki kokaba ngai na maboko na bango mpe bakonyokola ngai. \p \v 20 Jeremi azongisaki : \pi1 — Te, bakokaba yo te ! Nabondeli yo, tosa Yawe mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo ; bongo nyonso ekotambola malamu mpo na yo mpe okobikisa bomoi na yo. \v 21 Kasi soki oboyi komipesa epai na bango, tala makambo oyo Yawe atalisi ngai : \v 22 « Bakomema basi nyonso oyo bavandaka kati na ndako ya mokonzi ya Yuda epai ya bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Babiloni, mpe basi yango bakoloba : \q1 ‹ Baninga na yo ya motema \q2 bakosi yo mpe balongi yo. \q1 Matambe na yo ezindi na potopoto, \q2 baninga na yo bakimi yo ! › » \pi1 \v 23 Bakomema basi na yo nyonso mpe bana na yo nyonso epai ya bato ya Babiloni ; mpe yo moko okobika te na maboko na bango, mokonzi ya Babiloni akokanga yo mpe akobebisa engumba oyo na moto. \p \v 24 Sedesiasi alobaki na Jeremi : \pi1 — Tika ete moto moko te ayeba makambo oyo, mpe okokufa te. \v 25 Soki bakalaka bayoki ete tosololi na yo mpe bayei kotuna yo : « Yebisa biso makambo oyo oyebisi mokonzi mpe oyo mokonzi ayebisi yo. Kobombela biso eloko te, soki te, tokoboma yo. » \v 26 Loba bango : « Nakomisi libondeli na ngai liboso ya mokonzi mpo ete azongisa ngai na ndako ya Jonatan te, noki te nakokufela kuna. » \p \v 27 Bakalaka nyonso bayaki epai ya Jeremi mpe batunaki ye mituna ; ye mpe ayebisaki bango makambo nyonso, ndenge kaka mokonzi atindaki ye. Boye, lokola bazalaki lisusu na likambo ya koloba na ye te, pamba te moto moko te ayokaki masolo na ye na mokonzi, babendanaki na kimia. \p \v 28 Jeremi atikalaki kati na lopango ya bakengeli kino na mokolo oyo babotolaki engumba Yelusalemi. \c 39 \s1 Yelusalemi ekweyi \r (2Ba 25.1-21; Je 52.1-34) \p \v 1 Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu libwa na bokonzi, na sanza ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi mpe azingelaki yango. \v 2 Tango Sedesiasi akokisaki mibu zomi na moko na bokonzi, na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba. \v 3 Bakalaka nyonso ya mokonzi ya Babiloni bakotaki kati na engumba mpe bayaki kovanda na Ekuke ya kati-kati. Ezalaki Nerigali-Saretseri, Samigari-Nebu ; Sarisekimi, mokonzi ya bakalaka ya lokumu ; Nerigali-Saretseri, mokonzi ya liboso ya mampinga, mpe bakonzi mosusu ya basoda ya mokonzi ya Babiloni. \v 4 Tango Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, mpe basoda nyonso bamonaki bongo, bakimaki, babimaki na engumba butu-butu, na nzela ya elanga ya mokonzi, na Ekuke oyo ezali na kati-kati ya bamir mibale ; bakendeki na nzela ya lubwaku ya Yordani. \v 5 Kasi basoda ya Babiloni balandaki bango mpe bakangaki Sedesiasi, na etando ya Jeriko ; bazwaki ye mpe bamemaki ye na Ribila, kati na mokili ya Amati, epai ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo akatelaki ye etumbu. \v 6 Kuna na Ribila, mokonzi ya Babiloni apesaki mitindo ete bakata, na miso na ye, mito ya bana mibali ya Sedesiasi mpe ya bankumu nyonso ya Yuda. \v 7 Apesaki lisusu mitindo ete batobola miso ya Sedesiasi, bakanga ye minyololo ya bibende ya bronze mpo na komema ye na Babiloni. \p \v 8 Basoda ya Babiloni batumbaki ndako ya mokonzi mpe bandako ya bato, mpe babukaki bamir ya Yelusalemi. \v 9 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu, na Babiloni, bato oyo batikalaki kati na engumba elongo na bato oyo bayaki komitika bango moko epai na ye, mpe bato mosusu. \v 10 Kasi Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ya Yuda, babola oyo bazalaki ata na eloko moko te ; apesaki bango bilanga ya vino mpe bilanga. \p \v 11 Nzokande, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, apesaki mitindo oyo epai ya Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, na tina na mosakoli Jeremi : \v 12 « Kamata ye, batela ye, kosala ye mabe te ; kasi salela ye makambo nyonso oyo akosenga yo. » \p \v 13 Boye, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi ; Nebutsasibani, mokonzi ya bakalaka ya lokumu ; Nerigali-Saretseri, mokonzi ya liboso ya mampinga, mpe bakonzi nyonso ya basoda ya mokonzi ya Babiloni \v 14 batindaki ete bazwa Jeremi kati na lopango ya mokonzi mpe bapesaki ye na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, mpo ete azongisa ye na ndako na ye. Boye Jeremi awumelaki kati na bato na ye. \p \v 15 Wana Jeremi azalaki ya kokangama kati na lopango ya bakengeli, Yawe alobaki na ye : \pi1 \v 16 — Kende koyebisa Ebedi-Meleki, moto ya Kushi : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakomi pene ya kokokisa makambo oyo nalakaki mpo na engumba oyo, makambo ya pasi kasi ya esengo te ; tango makambo yango ekokokisama, ekosalema na miso na yo. \v 17 Kasi na mokolo wana, nakobatela yo, › elobi Yawe, ‹ okokabama te na maboko ya bato oyo yo ozali kobanga. \v 18 Solo, nakobikisa yo, mpe okokufa na mopanga te ; kasi bomoi na yo ekozala bomengo na yo ya bitumba, pamba te otielaka Ngai elikya, elobi Yawe. › » \c 40 \s1 Jeremi abimi na boloko \p \v 1 Yawe alobaki na Jeremi tango Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, abikisaki ye na Rama. Akutaki Jeremi bakanga ye na minyololo kati na molongo ya bakangami oyo bawutaki na Yelusalemi mpe na Yuda, oyo bazalaki komema na bowumbu kuna na Babiloni. \p \v 2 Tango mokonzi ya bakengeli ya mokonzi amemaki Jeremi, alobaki na ye : \pi1 — Yawe, Nzambe na yo, asilaki kokata ete pasi oyo ekokweya na esika oyo ; \v 3 mpe sik’oyo akokisi yango, asali ndenge kaka akanaki kosala. Makambo oyo nyonso esalemi mpo ete bino, bato, bosalaki masumu liboso ya Yawe mpe batosaki Ye te. \v 4 Kasi na mokolo ya lelo, nazali kokangola yo na minyololo oyo bakangaki yo na maboko. Soki olingi, yaka elongo na ngai na mokili ya Babiloni mpe nakobatela yo ; kasi soki mpe oboyi, koya te. Tala, mokili mobimba ezali liboso na yo ; kende esika nyonso olingi. \p \v 5 Lokola Jeremi azalaki kowumela kopesa eyano, Nebuzaradani abakisaki : \pi1 — Zonga epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisi moyangeli ya bingumba ya Yuda, mpe vanda epai na ye kati na bato na yo to kende esika nyonso olingi. \p Bongo mokonzi ya bakengeli ya mokonzi apesaki ye bilei mpe bakado, mpe atikaki ye kokende. \v 6 Jeremi akendeki na Mitsipa epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mpe avandaki esika moko na ye kati na bato oyo batikalaki kati na mokili. \s1 Nungunungu mpo na kufa ya Gedalia \r (2Ba 25.22-26) \p \v 7 Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango, oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka, bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, moyangeli kati na mokili mpe apesi ye mokumba ya kokamba babola, mibali, basi mpe bana oyo bakendeki te na bowumbu na Babiloni, \v 8 bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani mpe Jonatan, bana mibali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti ; bana mibali ya Efayi, moto ya Netofa ; mpe Yezania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati ; bakendeki kuna elongo na basoda na bango. \v 9 Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, alapaki ndayi liboso na bango mpe basoda na bango na maloba oyo : « Bobanga te kosalela bato ya Babiloni, bovanda kati na mokili, bosalela mokonzi ya Babiloni mpe bokozala na bino malamu. \v 10 Ngai, nakotikala na Mitsipa mpo na kolobela bino liboso ya bato ya Babiloni, oyo bazali koya epai na biso. Kasi bino, bobuka bambuma ya vino, bambuma mosusu, bokamola mafuta mpe bobomba yango na bibombelo na bino, bongo bovanda kati na bingumba oyo bosili kozwa. » \p \v 11 Tango Bayuda nyonso oyo bakimelaki na mokili ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi mpe na mikili mosusu bayokaki ete mokonzi ya Babiloni atikaki ndambo ya bato kati na Yuda mpe akomisaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, moyangeli na bango, \v 12 bango nyonso balongwaki na mikili nyonso epai wapi bazalaki ya kopanzana mpe bazongaki kati na Yuda, epai ya Gedalia, kuna na Mitsipa, mpe babukaki bambuma ya vino mpe bambuma mosusu ebele. \p \v 13 Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki ya kopanzana kati na etuka bayaki na Mitsipa epai ya Gedalia \v 14 mpe balobaki na ye : \pi1 — Oyebi te ete Balisi, mokonzi ya bato ya Amoni, atindi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpo na koboma yo ? \p Kasi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, andimelaki bango te. \v 15 Boye, Yoanani, mwana mobali ya Karea, ayebisaki Gedalia na nkuku, na Mitsipa : \pi1 — Pesa ngai nzela ete nakende koboma Isimaeli, mwana mobali ya Netania ! Moto moko te akoyeba yango. Mpo na nini aboma yo ? Mpo na nini Bato nyonso ya Yuda, oyo bazali pene na yo bapanzana mpe ndambo oyo bakotikala bakufa ? \p \v 16 Kasi Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, alobaki na Yoanani, mwana mobali ya Karea : \pi1 — Kosala bongo te ! Makambo oyo ozali koloba mpo na Isimaeli ezali makambo ya lokuta. \c 41 \s1 Babomi Gedalia \p \v 1 Na sanza ya sambo, Isimaeli, mwana mobali ya Netania mpe koko ya Elishama, oyo azalaki na molongo ya libota ya bokonzi mpe moko kati na bakengeli ya mokonzi, ayaki elongo na basoda zomi epai ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, na Mitsipa. Wana bazalaki kolia na Mitsipa, \v 2 Isimaeli, mwana mobali ya Netania, elongo na basoda wana zomi oyo bazalaki elongo na ye babomaki na mopanga Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli kati na mokili. \v 3 Isimaeli abomaki lisusu Bayuda oyo bazalaki elongo na Gedalia, na Mitsipa, elongo na basoda ya Babiloni oyo bazalaki wana. \p \v 4 Mokolo oyo elandaki kufa ya Gedalia, liboso ete sango eyebana epai ya bato, \v 5 bato tuku mwambe bawutaki na Sishemi, na Silo mpe na Samari ; bazalaki na mandefu bakata, bilamba epasuka-pasuka, mpe bamizokisaki-zokisaki bapota na banzoto. Bamemaki makabo ya bagato mpe malasi ya ansa mpo na kobonza yango kati na Tempelo ya Yawe. \v 6 Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abimaki na Mitsipa mpo na kokende kokutana na bango ; wana azalaki kokende kokutana na bango, azalaki kolela nzela-nzela. Bongo tango akutanaki na bango, alobaki na bango : \pi1 — Boya kotala Gedalia, mwana mobali ya Ayikami ! \p \v 7 Tango bakotaki kati na engumba, Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato oyo bazalaki elongo na ye babomaki bango mpe babwakaki bango na libulu. \v 8 Kasi bato zomi kati na bango balobaki na Isimaeli : \pi1 — Koboma biso te ! Tozali na ble, na orje, na mafuta mpe na mafuta ya nzoyi, oyo tobombaki kati na bilanga. \p Boye, abomaki bango lisusu te, abikisaki bango elongo na bandeko na bango. \v 9 Libulu epai wapi Isimaeli abwakaki bato nyonso oyo abomaki ezalaki libulu ya Gedalia, libulu oyo mokonzi Asa asalaki mpo na komibatela liboso ya Baesha, mokonzi ya Isalaele. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, atondisaki yango na bibembe ; \v 10 bongo akomisaki bato nyonso oyo batikalaki na Mitsipa bawumbu : bana basi ya mokonzi mpe bato mosusu oyo batikalaki kuna na Mitsipa, oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atiaki na se ya bokonzi ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami. Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki bato oyo amemaki bango lokola bawumbu kati na mokili ya bato ya Amoni. \p \v 11 Tango Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye bayokaki sango ya makambo mabe oyo Isimaeli, mwana mobali ya Netania, asalaki, \v 12 basangisaki bato na bango nyonso mpe bakendeki kobundisa Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; bakutanaki na ye pene ya liziba monene ya Gabaoni. \v 13 Tango bawumbu nyonso oyo Isimaeli akangaki bamonaki Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda, oyo bazalaki elongo na ye, batondisamaki na esengo makasi ; \v 14 mpe bato nyonso oyo Isimaeli amemaki lokola bawumbu, na Mitsipa, babalukaki mpe bakendeki kosangana na Yoanani, mwana mobali ya Karea. \v 15 Kasi Isimaeli, mwana mobali ya Netania, mpe bato mwambe oyo bazalaki elongo na ye babikaki na maboko ya Yoanani mpe bakimaki epai ya bato ya Amoni. \p \v 16 Sima na yango, Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki elongo na ye bamemaki bato nyonso ya Mitsipa oyo babikaki, oyo Isimaeli, mwana mobali ya Netania, amemaki na bowumbu wuta na Mitsipa sima na ye koboma Gedalia, mwana mobali ya Ayikami : basoda, basi, bana mpe bakalaka ya lokumu ya mokonzi ; elingi koloba bato nyonso oyo azongisaki wuta na Gabaoni. \v 17 Bakobaki nzela na bango mpe batelemaki na molako ya Kimeami, pene ya Beteleemi, mpo ete bazalaki na posa ya kokende na Ejipito \v 18 mpo na kokima bato ya Babiloni, pamba te bazalaki kobanga bango ; mpe mpo ete Isimaeli, mwana mobali ya Netania, abomaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, oyo mokonzi ya Babiloni akomisaki moyangeli ya mokili. \c 42 \s1 Kokima na Ejipito \p \v 1 Bongo, bakonzi nyonso ya basoda mpe Yoanani, mwana mobali ya Karea ; Yezania, mwana mobali Oshaya, mpe bato nyonso, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene, bapusanaki \v 2 pene ya mosakoli Jeremi mpe balobaki na ye : \pi1 — Tosengi na yo, tika ete libondeli na biso ekoma liboso na yo : « Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na biso bato oyo totikali ; pamba te ndenge ozali komona yango, tozalaki ebele, kasi sik’oyo totikali kaka moke. \v 3 Bondela Yawe, Nzambe na yo, mpo ete ayebisa biso esika nini tosengeli kokende mpe makambo nini tosengeli kosala. » \p \v 4 Mosakoli Jeremi alobaki na bango : \pi1 — Nayoki bino ! Nakobondela Yawe, Nzambe na bino, ndenge ezali bosenga na bino ; mpe nakoyebisa bino makambo nyonso oyo Yawe akoloba, nakobombela bino ata likambo moko te. \p \v 5 Balobaki na Jeremi : \pi1 — Tika ete Yawe azala motatoli ya solo mpe ya sembo mpo na kopesa biso etumbu soki toboyi kotosa makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo mokumba ya koyebisa biso. \v 6 Ezala esepelisi biso to te, tokotosa kaka Yawe, Nzambe na biso, oyo topesi yo mokumba ya kotuna. Na bongo, makambo nyonso ekotambola malamu mpo na biso, pamba te tokotosa Yawe, Nzambe na biso. \p \v 7 Sima na mikolo zomi, Yawe alobaki na Jeremi ; \v 8 mpe Jeremi abengaki Yoanani, mwana mobali ya Karea ; bakonzi nyonso ya basoda oyo bazalaki elongo na ye mpe bato nyonso, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene. \v 9 Alobaki na bango : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi, Ye oyo epai ya nani botindaki ngai mpo na kokomisa libondeli na bino : \v 10 « Soki botikali kati na mokili oyo, nakobikisa bino mpe nakobebisa bino te ; nakolona bino mpe nakopikola bino te, pamba te etumbu ya pasi oyo natindeli bino esali Ngai pasi na motema. \v 11 Bobanga lisusu te mokonzi ya Babiloni, oyo bozali kobanga lelo ; bobanga ye te, » elobi Yawe, « pamba te nazali elongo na bino mpo na kobikisa bino mpe mpo na kokangola bino na maboko na ye. \v 12 Nakotalisa bino ngolu mpo ete ayokela bino mawa mpe azongisa bino na mokili na bino. » \pi1 \v 13 Nzokande, soki bolobi : « Tokovanda na biso kati na mokili oyo te, » soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, \v 14 mpe soki bolobi : « Te ! Tokokende nde kovanda na Ejipito epai wapi tokomona lisusu bitumba te, tokoyoka lisusu lolaka ya kelelo te mpe tokokufa lisusu nzala te ; » \v 15 wana bino batikali ya Yuda, boyoka malamu Liloba na Yawe : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Soki botingami kaka kokende na Ejipito mpe soki bokeyi kovanda kuna, \v 16 mopanga oyo bozali kobanga ekokweyela bino kuna, na Ejipito ; nzala oyo bozali kobanga ekolanda bino kuna, na Ejipito, mpe ezali kuna nde bokokufa. \v 17 Solo, bato nyonso oyo bakotingama kokende kaka kovanda na Ejipito bakokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ; moko te kati na bango akotikala na bomoi mpe akobika na pasi oyo nakotindela bango. › \v 18 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ndenge kanda mpe kotomboka na Ngai epelelaki bavandi ya Yelusalemi, ndenge wana mpe nakopelisela bino kanda na Ngai tango bokokende na Ejipito. Bokokoma ndakisa mpo na koloba maloba ya bosoloka, eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe ya kotiola ; mpe bokotikala komona lisusu esika oyo te. › \pi1 \v 19 Oh bino batikali ya Yuda, Yawe azali koloba na bino : ‹ Bokende na Ejipito te ! › Bososola malamu likambo oyo : ngai nazali nde kokebisa bino lelo \v 20 ete bozali kosala libunga monene tango bozali kotinda ngai epai na Yawe, Nzambe na bino, na maloba oyo : ‹ Bondela mpo na biso Yawe, Nzambe na biso, mpe yebisa biso makambo nyonso oyo Yawe akoloba ; tokosalela yango. › \v 21 Na mokolo kaka ya lelo, nayebisi bino yango, kasi boboyi lisusu kotosa Yawe, Nzambe na bino, na nyonso oyo atindi ngai koyebisa bino. \v 22 Boye, boyeba sik’oyo malamu likambo oyo : bokokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka na esika oyo bolingi kokende mpo na kovanda. » \c 43 \s1 Bakei na Jeremi na Ejipito \p \v 1 Tango Jeremi asilisaki koloba na bato maloba nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, maloba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye koyebisa bango, \v 2 Azaria, mwana mobali ya Oshaya ; Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bato oyo nyonso ya lolendo balobaki na Jeremi : \pi1 — Ozali koloba makambo ya lokuta ! Yawe, Nzambe na biso, atindi yo te koloba na biso ete tokende te kovanda na Ejipito. \v 3 Ezali Baruki, mwana mobali ya Neriya, moto atindi yo ete okosa biso, pamba te alingi ete towumela na se ya bokonzi ya bato ya Babiloni mpo ete baboma biso to bamema biso na bowumbu na Babiloni. \p \v 4 Boye, Yoanani, mwana mobali ya Karea, bakonzi nyonso ya basoda mpe bato nyonso baboyaki kotosa Yawe oyo azali kosenga bango kovanda kati na mokili ya Yuda. \v 5 Yoanani, mwana mobali ya Karea, mpe bakonzi nyonso ya basoda bakamataki batikali nyonso ya Yuda, oyo bazongaki wuta na bikolo nyonso epai wapi bazalaki ya kopanzana, mpo na kovanda na mokili ya Yuda ; \v 6 bamemaki lisusu mibali, basi, bana mpe bana basi ya mokonzi oyo Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, apesaki na maboko ya Gedalia, mwana mobali ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani. Bamemaki mpe mosakoli Jeremi mpe Baruki, mwana mobali ya Neriya. \v 7 Boye, mpo ete batosaki Yawe te, bakendeki na Ejipito mpe bakomaki kino na Dafine. \p \v 8 Wuta na Dafine, Yawe alobaki na Jeremi : \pi1 \v 9 — Kamata mabanga minene mpe, na miso ya Bayuda, kunda yango na se ya mabele oyo basalelaka bikeko, mabele ya pavema oyo batonga na babiliki, na ekotelo ya ndako ya Faraon, na Dafine. \v 10 Loba na bango : « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobengisa mosali na Ngai, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe nakotelemisa kiti na ye ya bokonzi na likolo ya mabanga oyo nasili kokunda na esika oyo ; akotanda ndako na ye ya kapo ya bokonzi na likolo na yango. \v 11 Akoya kobundisa Ejipito mpe akoboma bato oyo basengeli kokufa, akomema na bowumbu ba-oyo basengeli kokende na bowumbu mpe akoboma na mopanga ba-oyo basengeli kokufa na mopanga. \v 12 Akotia moto kati na batempelo ya banzambe ya bato ya Ejipito, akotumba batempelo yango mpe akomema banzambe na bango ya bikeko na bowumbu. Akolongola bato ya Ejipito ndenge mobateli bibwele alongolaka basili na kazaka na ye, mpe akobima na kimia. \v 13 Kuna, kati na tempelo ya Eliopolisi\f + \fr 43.13 \fr*\ft Eliopolisi azalaki nzambe ya moyi oyo bato ya Ejipito bazalaki kosambela.\ft*\f*, akobuka makonzi ya bule mpe akobebisa na moto batempelo ya banzambe ya bato ya Ejipito. › » \c 44 \s1 Pasi ekweyeli Bayuda kati na Ejipito \p \v 1 Tala liloba oyo Jeremi azwaki na tina na Bayuda oyo bazalaki kovanda na Ejipito, na se ya bingumba ya Migidoli, na Dafine, na Mefisi mpe na Patrosi : \v 2 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bomonaki pasi makasi oyo natindaki na Yelusalemi mpe na bingumba nyonso ya Yuda. Na mokolo ya lelo, etikali pamba mpe ebebisami makasi \v 3 likolo ya mabe oyo basalaki. Bapesaki Ngai kanda tango bakomaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosalela banzambe mosusu oyo batikalaki koyeba te, ezala bango to bino to batata na bino. \v 4 Nzokande, nazalaki tango na tango kotinda basali na Ngai, basakoli, mpo na koloba na bino : ‹ Bosala te makambo ya nkele oyo nayinaka. › \v 5 Kasi batikalaki koyoka te mpe batosaki te ; batikaki mabe na bango te mpe bakobaki kaka kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu. \v 6 Yango wana, kanda makasi na Ngai epelaki mpe ebebisaki bingumba ya Yuda mpe babalabala ya Yelusalemi ; mpe lisusu ebukaki-bukaki yango ndenge ezali komonana lelo. \p \v 7 Sik’oyo tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga mpe Nzambe ya Isalaele, alobi : Mpo na nini bozali komimemela pasi ya makasi boye kino mokili ya Yuda ezangela mibali, basi, babebe mpe etikala lisusu ata na moto moko te ? \v 8 Mpo na nini bozali kopelisa kanda na Ngai na nzela ya misala na bino ya mabe, na kotumbaka malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu ya Ejipito epai wapi bokeyi kovanda ? Bino moko nde bozali komibebisa mpe komikomisa bato ya libabe mpe eloko ya kotiola kati ya bikolo nyonso ya mokili. \v 9 Bobosani mabe oyo batata na bino, bakonzi mpe basi ya bakonzi ya Yuda basalaki ? Bobosani mabe oyo bino mpe basi na bino bosalaki kati na mokili ya Yuda mpe kati na babalabala ya Yelusalemi ? \v 10 Kino lelo, bamikitisi te, batosi Ngai te, batosi mibeko mpe malako na Ngai te, oyo napesaki bino mpe batata na bino. \p \v 11 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nazwi mokano ya komemela bino pasi mpe ya kobebisa mokili nyonso ya Yuda. \v 12 Nakokanga batikali ya Yuda, ba-oyo batingamaki koya kovanda awa na Ejipito ; bango nyonso bakokufa kati na Ejipito, na mopanga mpe na nzala makasi, kobanda na ye oyo aleki moke kino na ye oyo aleki monene ; bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi, mpe bakobanda kotangaka kombo na bango mpo na kolakela bato mabe ; bakokoma eloko ya koyoka somo, eloko ya lisuma mpe eloko ya kotiola. \v 13 Nakopesa bavandi ya Ejipito etumbu na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, ndenge napesaki Yelusalemi etumbu. \v 14 Kati na batikali ya Yuda oyo bayaki kovanda na Ejipito, moko te akobika to akotikala na bomoi, ata soki ayoki posa ya kozonga mpo na kovanda na mokili ya Yuda, bato moke kaka nde bakozonga. » \s1 Yawe to Ishitari \p \v 15 Mibali nyonso oyo bayebaki ete basi na bango bazalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka epai ya banzambe mosusu, elongo na basi nyonso oyo bazalaki wana kati na lisanga monene mpe bato nyonso oyo bazalaki kovanda na Ejipito ya se mpe ya likolo balobaki na Jeremi : \pi1 \v 16 — Te ! Tokoyoka te makambo oyo ozali koyebisa biso na kombo ya Yawe. \v 17 Tokosala nde makambo nyonso oyo biso tokanaki kosala : tokotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpo na Ishitari\f + \fr 44.17 \fr*\ft Ishitari azalaki nzambe mwasi ya bato ya Babiloni.\ft*\f* mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino mpo na ye ndenge biso, batata na biso, bakonzi na biso mpe bakalaka na biso tosalaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi ; mpe na tango wana, tozalaki na bilei ebele, tozalaki malamu mpe tozalaki komona pasi te. \v 18 Kasi wuta kaka tango totikaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, tozangela nyonso mpe tokoma kokufa na mopanga mpe na nzala makasi. \p \v 19 Basi babakisaki : \pi1 — Kutu, tango tozalaki kotumba malasi ya ansa lokola mbeka mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, boni, mibali na biso bayebaki te ete tozali kosala bagato na elilingi na ye mpe kosopa makabo ya masanga ya vino epai na ye ? \p \v 20 Bongo Jeremi alobaki na bato nyonso, mibali mpe basi, oyo bapesaki ye eyano wana : \pi1 \v 21 — Boni, bokanisi ete Yawe abosani mpe azali kokanisa lisusu te malasi ya ansa oyo botumbaki kati na bingumba ya Yuda mpe na babalabala ya Yelusalemi, bino, batata na bino, bakonzi na bino, bakalaka na bino mpe bato nyonso ya mokili ? \v 22 Yawe akokaki lisusu te kokanga motema liboso ya misala na bino ya mabe mpe ya nkele ; ezali mpo na yango nde mokili na bino ekomi elanga ya libebi, etando ebebisama, eloko ya lisuma mpe etikali lisusu na bato te, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo. \v 23 Mpo ete botumbaki malasi ya ansa lokola mbeka mpe bosalaki masumu liboso ya Yawe, mpo ete botosaki Yawe te mpe bolandaki te Mobeko na Ye, bikateli na Ye mpe malako na Ye, yango wana pasi oyo ekomeli bino ndenge bozali komona yango lelo. \p \v 24 Jeremi alobaki na bato nyonso mpe epai ya basi nyonso : \pi1 — Bino bato nyonso ya Yuda oyo bozali kati na Ejipito, boyoka Liloba na Yawe : \v 25 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : Bino mpe basi na bino, bomonisi na nzela ya misala na bino elaka oyo bopesaki tango bolobaki : « Tokokokisa solo ndayi oyo tolapaki ete tokotumba malasi ya ansa mpe tokosopa makabo ya masanga ya vino epai ya Ishitari, nzambe mwasi ya bato ya Babiloni. » Bokende ! Bosala ndenge bolobi mpe bokokisa ndayi na bino ! \v 26 Kasi mpo na yango, boyoka Liloba na Yawe, bino Bayuda nyonso oyo bozali kovanda kati na Ejipito : « Tala, nalapi ndayi na Kombo na Ngai ya monene, » elobi Yawe, « moto moko te oyo awuta na mokili ya Yuda, bongo avandi na esika songolo ya Ejipito, akobelela to mpe akolapa ndayi na Kombo na Ngai, na koloba : ‹ Lokola Nkolo Yawe azali na bomoi ! › \v 27 Pamba te nazali kolandela bango malamu mpo ete bamona pasi kasi bolamu te. Bato nyonso ya Yuda kati na Ejipito bakokufa na mopanga mpe na nzala makasi kino tango bango nyonso bakosila kobebisama. \v 28 Kaka ndambo moke ya bato nde ekobika na mopanga mpe ekozonga na mokili ya Yuda, wuta na Ejipito. Boye, batikali nyonso ya Yuda, ba-oyo nyonso bayaki kovanda na Ejipito, bakoyeba soki liloba ya nani nde ekokokisama : ya Ngai to ya bango. \v 29 Ekozala elembo ete nakopesa bino etumbu na esika oyo, » elobi Yawe, « mpo ete boyeba solo ete pasi oyo nalakaki bino ekokokisama kaka. » \v 30 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Nakokaba Faraon Ofira, mokonzi ya Ejipito, na maboko ya banguna na ye oyo bazali koluka bomoi na ye, ndenge kaka nakabaki Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, oyo azalaki koluka bomoi na ye. » \c 45 \s1 Maloba ya Jeremi epai na Baruki \p \v 1 Tango Baruki asilisaki kokoma kati na mokanda makambo oyo Jeremi atindaki ye, na mobu ya minei ya bokonzi ya Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, mosakoli Jeremi alobaki na Baruki, mwana mobali ya Neriya, maloba oyo : \v 2 « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, azali koloba na yo Baruki : \v 3 Olobaki : ‹ Mawa na ngai ! Yawe abakisi pasi mpe minyoko na ngai ; nalembi likolo ya kolela mpe nazali lisusu na kimia te ! › \v 4 Kasi Yawe alobaki na ngai : Loba na ye : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakokweyisa biloko nyonso oyo natongaki mpe nakopikola biloko nyonso oyo nalonaki kati na mokili oyo. \v 5 Boni, olingi koluka makambo minene mpo na yo moko ? Te ! Koluka yango te ! Pamba te nakomemela bato nyonso pasi, elobi Yawe, kasi nakobikisa yo na bisika nyonso oyo okokende. › » \c 46 \ms1 Na tina na bikolo ya bapaya \s1 Maloba ya kosambisa Ejipito \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bikolo ya bapaya : \b \p \v 2 Na tina ya Ejipito : \b \p Tala maloba ya kosambisa mampinga ya Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alongaki pene ya ebale Efrate, na Karikemishi, tango Yeoyakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu minei na bokonzi : \q1 \v 3 « Bobongisa banguba na bino : ya minene mpe ya mike, \q2 mpe bokende bitumba ! \q1 \v 4 Bobongisa bampunda mpe bomata na bashar ! \q2 Bomitanda na milongo mpe bolata bikoti ya bitumba ! \q1 Bopelisa basonge ya makonga na bino mpe bolata bibundeli ! \b \q1 \v 5 Nazali komona nini ? \q2 Bazali kolenga na somo mpe kozonga sima ; \q1 balongi basoda na bango ya mpiko, \q2 bazali kopota mbangu makasi \q1 mpe bazali ata kotala sima te : \q2 somo ekangi bango na bangambo nyonso, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 6 « Bato ya mbangu bazali kokoka lisusu kokima te, \q2 mpe basoda ya mpiko bazali kokoka lisusu kobika te ! \q1 Bazali nde kobeta mabaku mpe kokweya \q2 pembeni ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor. \b \q1 \v 7 Nani oyo azali koya lokola ebale Nili, \q2 lokola mayi ya bibale oyo etomboki ? \q1 \v 8 Mokili ya Ejipito ezali koya lokola ebale Nili, \q2 lokola mayi ya bibale oyo etomboki. \q1 Ejipito ezali koloba : \q2 ‹ Nakoya mpe nakotondisa mokili, \q2 nakobebisa bingumba mpe bato na yango. › \q1 \v 9 Bino bampunda, bokende ! \q2 Bino basoda oyo botambolaka likolo ya bashar, \q2 botambolisa mbangu ! \q1 Bino basoda, bato ya Kushi mpe ya Puti, \q2 oyo bomemaka banguba, \q1 mpe bino bato ya Ludi oyo bobundaka na matolotolo, \q2 bokende liboso ! \b \q1 \v 10 Ezali mokolo ya Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; \q2 mokolo ya kozongisa mabe na mabe, \q1 mpo na kozongisela banguna na yo mabe. \q2 Mopanga ekoboma kino ekotonda, \q1 kino ekosilisa posa na yango ya makila ; \q2 pamba te ezali nde mbeka \q1 mpo na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 pene ya ebale Efrate, kati na etuka ya nor. \b \q1 \v 11 Oh moseka Ejipito, \q2 kende kozwa malasi kati na Galadi ! \q1 Ozali kobakisa na pamba bakisi likolo ya bakisi, \q2 okobika na yo te ! \q1 \v 12 Bikolo ya bapaya ekoyoka sango ya soni na yo, \q2 makelele ya koganga na yo ekotondisa mabele. \q1 Soda moko akotutana na soda mosusu, \q2 mpe bango mibale bakokweya nzela moko. » \p \v 13 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na koya ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpo na kobundisa Ejipito : \q1 \v 14 « Loba makambo oyo na Ejipito \q2 mpe tatola yango na Migidoli ; \q1 tatola yango lisusu na Mefisi mpe na Takipenesi : \q2 ‹ Bomitanda na milongo mpe bobongama, \q1 pamba te mopanga ezali koboma bato \q2 oyo bazali zingazinga na yo. › \q1 \v 15 Mpo na nini bamemi basoda na yo ya mpiko ? \q2 Bakokaki kopika te, \q2 pamba te Yawe akweyisaki bango. \q1 \v 16 Tango nyonso, bazali se kobeta mabaku, \q2 bazali kokweya moko likolo ya mosusu. \q1 Bazali koloba : ‹ Tika ete totelema \q2 mpe tozonga epai ya bato na biso moko \q1 mpe na mokili na biso, epai babota biso, \q2 mpo ete tobika na mopanga oyo ezali koboma. › \q1 \v 17 Kuna, bakokoma koganga : \q2 ‹ Faraon, mokonzi ya Ejipito, atiaka kaka makelele ya pamba, \q2 akoki na ye makambo te ! › \q1 \v 18 Lokola Ngai nazali na bomoi, » \q2 elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali \q1 Yawe, Mokonzi ya mampinga ; \q2 « monguna oyo azali lokola ngomba Tabori kati na bangomba, \q1 lokola ngomba Karimeli pembeni ya ebale monene, \q2 azali koya ! \q1 \v 19 Yo movandi ya Ejipito, \q2 kanga bisaka na yo mpo na kokende na bowumbu, \q1 pamba te Mefisi ekokoma esobe, \q2 ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te ! \b \q1 \v 20 Mokili ya Ejipito ezali lokola mwana ngombe ya kitoko ya mwasi, \q2 kasi nzinzi ezali koya koswa yango kowuta na nor. \q1 \v 21 Basoda ya bapaya bazali kati na milongo na ye, \q2 bazali lokola bana ngombe ya mibali mpe ya mafuta kati na etonga. \q1 Bango mpe bakobaluka mpe bakokima nzela moko ; \q2 bakokoka kolonga te, \q1 pamba te mokolo ya pasi ezali koya kokweyela bango : \q2 ezali tango ya etumbu mpo na bango. \q1 \v 22 Ejipito ezali kokima, na makelele lokola nyoka, \q2 pamba te banguna na yango bazali kopusana na nguya ; \q1 bazali koya kobundisa yango na bipasola \q2 lokola bato oyo bakataka banzete. \q1 \v 23 Bakokata banzete nyonso ya zamba na yango, » \q2 elobi Yawe, \q1 « ata soki ezali na banzete ebele. \q2 Bazali ebele koleka mabanki, \q2 bakokoka kotanga motango na bango te. \q1 \v 24 Elenge mwasi ya Ejipito akoyokisama soni, \q2 akokweya na maboko ya bato ya nor. » \m \v 25 Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Nakopesa etumbu epai na Amoni, na nzambe ya Tebesi, na Faraon, na Ejipito mpe na banzambe na yango, na Faraon mpe na bato oyo batiaka mitema na bango epai na ye. \v 26 Nakokaba bango na maboko ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe, na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mpe na maboko ya bakonzi ya basoda na ye. Mpe na sima na tango, Ejipito ekotonda lisusu na bato oyo bakovanda kuna, ndenge ezalaki na tango ya kala, » elobi Yawe. \q1 \v 27 « Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ! \q1 Oh Isalaele, kobanga te ; \q2 nakobikisa yo solo wuta na mokili ya mosika, \q1 nabikisa bakitani na yo wuta na mokili ya bowumbu. \q2 Jakobi akozala lisusu na kimia mpe na bobatelami malamu, \q2 moto moko te akobangisa ye lisusu. \q1 \v 28 Oh Jakobi, mosali na Ngai, kobanga te ; \q2 pamba te nazali elongo na yo, » \q2 elobi Yawe, \q1 « ata soki nabebisi bikolo nyonso \q2 epai wapi napanzaki bino, \q1 nakobebisa yo nyonso te. \q2 Nakopamela yo solo, kasi nakosala yango na bosembo ; \q2 nakozanga te kopesa yo etumbu. » \c 47 \s1 Kosambisama ya bato ya Filisitia \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na bato ya Filisitia liboso ete Faraon abundisa Gaza : \q1 \v 2 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Tala ndenge nini mayi ezali kotomboka na nor, \q1 etondi lokola ebale oyo etondi mayi ; \q2 ekozindisa mokili mpe biloko nyonso kati na yango, \q1 bingumba mpe bavandi na yango nyonso. \q2 Bato bakoganga, bavandi nyonso ya mokili bakolela \q1 \v 3 tango bakoyoka makelele ya bampunda koleka na lombangu, \q2 lokito ya bashar ya banguna \q1 mpe makelele ya bapine na yango. \q2 Batata bakozala lisusu na tango te \q1 ya kosunga bana na bango \q2 mpo ete maboko na bango ekolemba. \q1 \v 4 Pamba te mokolo ekoki \q2 mpo na kobebisa bato nyonso ya Filisitia \q1 mpe kosilisa koboma batikali nyonso \q2 oyo bakoluka kosunga bingumba Tiri mpe Sidoni. \q1 Yawe akomi pene ya kobebisa bato ya Filisitia, \q2 batikali ya esanga ya Kafitori. \q1 \v 5 Bakokokola suki ya moto ya Gaza \q2 lokola elembo ya matanga, \q1 Ashikeloni ekokanga monoko ! \q2 Oh bino batikali kati na etando oyo ya lubwaku, \q2 kino tango nini bokotika komizokisa ? \b \q1 \v 6 Bozali koganga : ‹ Ah mopanga ya Yawe, \q2 okopema tango nini ? \q1 Zonga na ebombelo na yo, \q2 tika koboma mpe zala kimia ! › \q1 \v 7 Kasi ndenge nini ezala kimia \q2 tango Yawe apesi yango mitindo \q1 ya kobundisa Ashikeloni mpe mikili \q2 oyo ezali pembeni ya ebale monene ? » \c 48 \s1 Kosambisama ya Moabi \p \v 1 Na tina ya Moabi : \b \p Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, alobi : \q1 « Mawa na engumba Nebo, pamba te ekobebisama ! \q2 Kiriatayimi ekoyokisama soni mpe bakobotola yango, \q2 ndako makasi ekoyokisama soni mpe ekobukana. \q1 \v 2 Moabi ekozala lisusu na lokumu te, \q2 bato bakosalela yango likita kati na Eshiboni \q1 mpo na kokweyisa yango : \q2 ‹ Boya, tokweyisa ekolo oyo ! › \q1 Yo mpe, engumba Madimeni, okokanga monoko ; \q2 mopanga ekolanda yo. \q1 \v 3 Yoka makelele oyo ezali kobima kuna na Oronayimi : \q2 ezali lokito ya bitumba mpe ya kobebisama ! \q1 \v 4 Moabi ebebisami makasi penza \q2 mpe bana na yango bazali kolela. \q1 \v 5 Bazali komata na kolela, \q2 nzela-nzela mpo na kokende na Luyiti ; \q1 mpe tango bazali kokita na Oronayimi, \q2 koganga ya mawa ezali koyokana \q2 mpo ete Moabi esili kobebisama. \q1 \v 6 Bokima ! \q2 Bopota mbangu mpo na kobikisa bomoi na bino ; \q2 bokoma lokola nzete ya kokawuka kati na esobe ! \q1 \v 7 Lokola bozali kotia mitema na misala na bino \q2 mpe na bomengo na bino, \q1 bino mpe bokokende na bowumbu ; \q2 boye Kemoshi mpe akokende na bowumbu \q2 elongo na Banganga-Nzambe mpe bakambi na ye. \q1 \v 8 Mobebisi akoya koboma bingumba nyonso \q2 mpe ata engumba moko te ekobika ; \q1 lubwaku ekobebisama, \q2 mpe etando ya likolo ya bangomba ekobebisama, \q2 pamba te Yawe alobi. \q1 \v 9 Bobongisa kunda mpo na Moabi \q2 mpo ete ekobebisama solo ; \q1 bingumba na yango ekotikala pamba, \q2 mpe bato bakovanda lisusu kuna te. \b \q1 \v 10 Tika ete moto oyo asalelaka Yawe \q2 na kozanga komipesa alakelama mabe ! \q1 Tika ete moto oyo apelisaka mopanga na ye \q2 mpo ete etangisa makila alakelama mabe ! \b \q1 \v 11 Moabi ezalaki na kimia wuta bolenge na yango \q2 lokola masanga ya vino oyo baningisi te, \q1 oyo babongoli na mbeki mosusu te, \q2 mpo ete etikala nanu kokende na bowumbu te. \q1 Boye, elengi na yango ebongwana te \q2 mpe solo na yango etikala kaka ndenge ya kala. \q1 \v 12 Kasi na mikolo ekoya, » \q2 elobi Yawe, \q1 « nakotindela Moabi bato oyo bakobongola yango \q2 lokola masanga ya vino na mbeki mosusu : \q1 bakosopa yango, \q2 bakosilisa yango na mbeki \q2 mpe bakobuka mbeki na yango. \q1 \v 13 Boye, Moabi ekoyoka soni likolo ya Kemoshi \q2 ndenge bato ya Isalaele bayokaki soni \q2 tango batiaki mitema na Beteli. \b \q1 \v 14 Ndenge nini bokoki koloba : \q2 ‹ Tozali basoda ya mpiko, \q2 bato ya makasi, bilombe ya bitumba ? › \q1 \v 15 Mokili ya Moabi ekobebisama, \q2 mpe bakobotola bingumba na yango na makasi ; \q1 bilenge mibali oyo Moabi etielaka motema \q2 bakokufa na mopanga, » \q2 elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga. \q1 \v 16 « Kobebisama ya Moabi ezali na nzela, \q2 pasi na yango ekoya na lombangu penza. \q1 \v 17 Bino bazalani nyonso ya Moabi, \q2 bosalela ye matanga ; \q1 bino bato oyo boyebi sango ya lokumu na ye, \q2 boloba : ‹ Ah, tala ndenge lingenda ya nguya, \q2 lingenda ya bokonzi ya nkembo, ebukani ! › \b \q1 \v 18 Oh bato ya elenge mwasi Diboni, \q2 botika nkembo na bino \q1 mpe bovanda na esobe ; \q2 pamba te moto oyo akoya kobundisa Moabi \q1 akoya mpe kobundisa bino \q2 mpe kobebisa bingumba na bino \q2 oyo batonga makasi ! \q1 \v 19 Bino bavandi ya Aroeri, \q2 botelema na nzela mpe botala malamu, \q1 botuna mobali oyo azali kokima \q2 mpe mwasi oyo asili kobikisa bomoi na ye \q2 soki makambo nini esili kosalema ! \q1 \v 20 Moabi ezali na soni \q2 mpo ete esili kokweya. \q1 Bolela mpe boganga, \q2 bobelela na Arinoni ete mokili ya Moabi ebebisami ! \q1 \v 21 Kosambisama ekweyi na mokili ya etando ya likolo ya bangomba : \q2 na Oloni, na Yakatsi mpe na Mefati, \q1 \v 22 na Diboni, na Nebo mpe na Beti-Diblatayimi, \q2 \v 23 na Kiriatayimi, na Beti-Gamuli mpe na Beti-Meoni, \q1 \v 24 na Kerioti mpe na Botsira, \q2 na bingumba nyonso ya Moabi, \q2 ezala oyo ezali mosika to oyo ezali pene. \b \q1 \v 25 Liseke ya Moabi ebukani \q2 mpe loboko na ye ekatani, » \q2 elobi Yawe. \b \q1 \v 26 « Bolangwisa ye masanga, \q2 pamba te abetaki tembe na Yawe ! \q1 Tala ye Moabi ndenge azali kobaluka kati na bisanza na ye ! \q2 Tika ete, ye mpe, akoma eloko ya maseki ! \q1 \v 27 Boni, Isalaele azalaki eloko ya maseki te \q2 na miso na bino ? \q1 Bokangaki ye kati na miyibi \q2 mpo ete bokoma koseka ye \q2 tango nyonso bokolobela kombo na ye ? \q1 \v 28 Bino bavandi ya Moabi, bosundola bingumba na bino \q2 mpe bokende kovanda kati na mabanga ! \q1 Bozala lokola ebenga oyo etongaka \q2 zala na yango kati na mabanga. \b \q1 \v 29 Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, \q2 lolendo oyo eleka penza ndelo ! \q1 Tala ndenge amatisaka mapeka ! \q2 Atondi na lofundu, \q1 azali na monoko makasi, \q2 mpe motema na ye emikitisaka te. \q1 \v 30 Nayebi ete monoko makasi na ye \q2 ezali kaka pamba, » \q2 elobi Yawe, \q2 « mpe lolendo na ye esalaka eloko moko te. \q1 \v 31 Yango wana nazali kolela mpo na Moabi, \q2 nazali kolela mpo na Moabi nyonso ; \q2 nazali kosala matanga mpo na bato ya Kiri-Eresheti. \q1 \v 32 Oh elanga ya vino ya Sibima, nazali kolela mpo na yo \q2 ndenge engumba Yaezeri ezali kolela ! \q1 Bitape na yo epanzani kino koleka mayi monene, \q2 ekomi kino na mayi monene Yaezeri. \q1 Mobebisi akweyeli mbuma ya bilanga na yo \q2 mpe mbuma ya vino na yo. \q1 \v 33 Esengo mpe kosepela esili kolimwa \q2 na bilanga mpe na bazamba ya Moabi ; \q1 nakawusi vino kati na bikamolelo na bango, \q2 mpe moto oyo akokamola yango na esengo azali te. \q1 Atako bato bazali koganga \q2 kasi ezali makelele ya esengo te. \b \q1 \v 34 Makelele mpe koganga ezali komata \q2 wuta na Eshiboni kino na Eleale mpe Yakatsi, \q1 wuta na Tsoari kino koleka Oronayimi mpe Egilati-Shelishiya ; \q2 pamba te, ezala mayi ya Nimirimi esili kokawuka. \q1 \v 35 Nakoboma bato nyonso \q2 oyo bakendaka na bisambelo ya likolo ya bangomba \q1 mpe batumbaka malasi ya ansa lokola mbeka \q2 epai ya banzambe na bango, \q1 kati na mokili ya Moabi, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 36 « Mpe motema na Ngai ezali kolela Moabi \q2 ndenge flite ebetaka, \q1 ezali kolela lokola flite mpo na bato ya Kiri-Eresheti. \q2 Bomengo na bango nyonso esili kobunga. \q1 \v 37 Bakokoli suki ya mito ya bato nyonso, \q2 bakati moto moko na moko mandefu \q2 mpe bazokisi moto moko na moko na loboko. \q1 \v 38 Na likolo ya bandako nyonso ya Moabi \q2 mpe na bisika nyonso oyo bato balekelaka, \q1 ezali na likambo mosusu te, kaka ebembe ; \q2 pamba te nabebisi Moabi lokola eloko oyo bato balingaka te, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 39 « Tala ndenge nini apanzani, \q2 tala ndenge nini bazali kolela ! \q1 Ndenge nini Moabi apesi mokongo na soni ! \q2 Moabi akomi eloko ya kotiola, eloko ya koyoka \q2 na miso ya bato nyonso oyo bazingeli ye. » \b \q1 \v 40 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Tala ndenge nini mpongo ezali kokita na elulu \q2 mpe etandi mapapu na yango likolo ya Moabi. \q1 \v 41 Bakobotola Kerioti mpe bandako na yango oyo batonga makasi. \q1 Na mokolo wana, mitema ya basoda ya mpiko ya Moabi \q2 ekokoma lokola motema ya mwasi \q2 oyo azali na pasi ya kobota. \q1 \v 42 Mokili ya Moabi ekobebisama \q2 mpe ekotikala lisusu ekolo te ; \q2 pamba te ebetaki tembe na Yawe. \q1 \v 43 Somo, libulu mpe motambo ezali kozela \q2 bino bato ya Moabi, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 44 « Moto nyonso oyo akokima somo \q2 akokweya na libulu, \q1 mpe moto nyonso oyo akobima na libulu \q2 akokangama na motambo, \q1 pamba te nakoyeisa mobu ya etumbu \q2 na mokili ya Moabi, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 45 « Bato oyo bazali kokima bakozanga lisungi \q2 na elili ya engumba ya Eshiboni, \q1 pamba te moto moko ewuti na Eshiboni, \q2 moto ebimi na ndako ya mokonzi Sikoni, \q1 etumbi bandako batonga makasi ya Moabi \q2 mpe mito ya bato ya lolendo. \q1 \v 46 Oh Moabi, mawa na yo ! \q2 Bato ya Kemoshi babebisami, \q1 bana na yo ya mibali bakangami na bowumbu, \q2 mpe bana na yo ya basi bakokende na bowumbu ! \q1 \v 47 Nzokande, na mikolo ekoya, \q2 nakozongisa lokumu ya Moabi, » \q2 elobi Yawe. \q1 Kosambisama ya Moabi esuki awa. \c 49 \s1 Kosambisama ya Amoni \p \v 1 Na tina na bato ya Amoni : \b \p Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Boni, Isalaele atikali lisusu na bana mibali te ? \q2 Atikali lisusu na bakitani ya libula te ? \q1 Bongo mpo na nini Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, \q2 abotoli bingumba ya Gadi ? \q2 Mpo na nini bato na ye bayei kovanda na Gadi ? \q1 \v 2 Kasi na mikolo ekoya, » \q2 elobi Yawe, \q2 « nakosala ete lokito ya bitumba eyokana \q1 mpo na kobundisa Raba, engumba ya bato ya Amoni ; \q2 ekokoma esika ya mabe \q1 mpe bamboka mike na yango ekozikisama na moto. \q2 Bongo Isalaele akobengana bato oyo babenganaki ye, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 3 « Eshiboni, lela mpo ete Ayi ebebisami ! \q2 Bino bavandi ya Raba, boganga ! \q1 Bolata basaki mpe bosala matanga, \q2 bokima na bangambo nyonso ya mir, \q1 pamba te Moloki akokende na bowumbu \q2 elongo na banganga-nzambe mpe bakambi na ye. \q1 \v 4 Mpo na nini ozali komikumisa na tina na mabwaku na yo, \q2 mabwaku oyo ebotaka bambuma ebele ? \q1 Oh elenge mwasi oyo otambolaka na bosembo te, \q2 ozali solo kotia motema na bomengo na yo \q2 mpe ozali koloba : ‹ Nani akobundisa ngai ? › \q1 \v 5 Nakomemela yo pasi, \q2 wuta na zingazinga na yo, » \q2 elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga. \q1 « Bakomema moko na moko kati na bino na bowumbu, \q2 mpe moto ata moko te akokoka kosangisa \q2 bato oyo bakokima. \q1 \v 6 Kasi sima na mikolo, \q2 nakozongisa lisusu lokumu ya bato ya Amoni, » \q2 elobi Yawe. \s1 Kosambisama ya Edomi \p \v 7 Na tina na Edomi : \b \p Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q1 « Boni, engumba ya Temani etikali lisusu \q2 na bato ya bwanya te ? \q1 Bato ya mayele batikali lisusu na bososoli te ? \q2 Boni, bwanya na bango esili penza ? \q1 \v 8 Bobaluka mpe bokima, \q2 bokende kobombama na madusu ya mabanga, \q1 bino bavandi ya engumba Dedani ! \q2 Pamba te nakotindela Ezawu pasi \q2 tango nakopesa ye etumbu. \q1 \v 9 Soki bato oyo babukaka bambuma ya vino \q2 bayei epai na yo, \q1 bakotika ata mbuma moko te ya vino. \q2 Soki miyibi bayei epai na yo na butu, \q2 bakobebisa ndenge balingi. \q1 \v 10 Kasi nakotika Ezawu bolumbu, \q2 mpe nakobimisa polele ebombamelo na ye, \q1 bongo akokoka lisusu komibomba te. \q2 Bana na ye ya mibali to bandeko na ye \q1 to mpe bazalani na ye bakosila kokufa ; \q2 moko te akotikala na bomoi. \q1 \v 11 Tika bana bitike na yo, \q2 nakobatela bomoi na bango ; \q1 mpe basi na yo, oyo bakufisa mibali \q2 bakotiela Ngai motema. » \m \v 12 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Soki bato oyo basengeli komela kopo te bameli yango, bongo mpo na nini yo ozanga kozwa etumbu ? Te, okozanga te kozwa etumbu, mpe osengeli komela kopo yango ! \v 13 Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, » elobi Yawe, « Botsira ekobebisama mpe ekokoma eloko ya somo, eloko ya kotiola mpe ya lisuma ; mpe bingumba na yango nyonso ekobebisama mpo na libela. » \q1 \v 14 Nayoki sango kowuta na Yawe ; \q2 mpe batindaki ntoma moko epai ya bikolo mpo na koloba : \q1 « Bosangana mpo na kobundisa yango ! \q2 Botelema mpo na bitumba ! \b \q1 \v 15 Nakokomisa yo moke kati na bikolo, \q2 ekolo ya kotiola kati na bato. \q1 \v 16 Somo oyo bato bazali koyoka yo \q2 mpe lolendo ya motema na yo ezali kokosa yo. \q1 Yo movandi ya madusu ya mabanga, \q2 yo oyo otonga ndako na yo \q1 na basonge ya bangomba ; \q2 ata soki otongi zala na yo likolo lokola mpongo, \q2 nakokweyisa yo longwa kuna kino na se, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 17 « Mokili ya Edomi ekokoma eloko ya somo ; \q2 moto nyonso oyo akolekela wana akokamwa \q2 mpe akoyoka somo wana akomona kobeba na yango nyonso. \q1 \v 18 Ndenge Sodome mpe Gomore ebebisamaki \q2 elongo na bingumba na yango ya zingazinga, » \q2 elobi Yawe, \q1 « moto moko te akovanda lisusu kuna, \q2 moko te akowumela kati na yango. \q1 \v 19 Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani \q2 mpo na kokende na mapango epai wapi babokolaka bibwele, \q1 ndenge wana mpe nakobengana Edomi \q2 na mokili na yango na mbala moko ; \q1 Ngai moko nakopona moto oyo akokoma mokonzi ya Edomi. \q2 Nani akokani na Ngai ? \q1 Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? \q2 Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ? \q1 \v 20 Yango wana, \q2 boyoka mabongisi oyo Yawe asili kosala \q1 mpo na kotelemela Edomi, \q2 mokano oyo asili kozwa \q1 mpo na kotelemela bavandi ya Temani : \q2 ‹ Bakobengana bango na lopango \q1 lokola bana mike ya etonga, \q2 akobebisa etando na bango. \q1 \v 21 Mabele ekoningana na lokito ya kokweya na bango, \q2 makelele na yango ekoyokana kino na ebale monene ya Barozo. \b \q1 \v 22 Tala, mpongo moko ekopumbwa mpe ekokita na elulu, \q2 etanda mapapu na yango likolo ya Botsira ! \q1 Na mokolo wana, mitema ya basoda ya Edomi \q2 ekokoma lokola motema ya mwasi oyo azali na pasi ya kobota. › » \s1 Kosambisama ya Damasi \p \v 23 Na tina ya Damasi : \q1 « Amati mpe Aripadi batondisami na soni, \q2 pamba te bayoki sango ya mabe. \q1 Mitema na bango ekomi likolo-likolo \q2 mpe bakomi komitungisa lokola ebale oyo etomboki. \q1 \v 24 Bato ya Damasi balembi nzoto, \q2 bakomi koluka kokima mpe somo ekangi bango ; \q1 kobanga mpe pasi ezwi bango \q2 lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. \q1 \v 25 Ndenge nini bosundola engumba ya lokumu boye, \q2 engumba oyo ezalaki kosepelisa motema na Ngai ? \q1 \v 26 Solo, bilenge mibali na yango bakokweya \q2 na babalabala na yango na mokolo wana, \q2 basoda na yango ya mpiko bakokanga minoko, » \q2 elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \q1 \v 27 « Nakozikisa bamir ya Damasi na moto \q2 mpe moto yango ekozikisa bandako batonga makasi \q2 ya mokonzi Beni-Adadi. » \s1 Kosambisama ya Kedari mpe Atsori \p \v 28 Na tina na Kedari mpe mikili ya Atsori, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki : \b \p Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Botelema mpe bobundisa Kedari, \q2 bobebisa bato ya este. \q1 \v 29 Bobotola na makasi bandako na bango ya kapo \q2 mpe bibwele na bango ; \q1 bomema bilamba, biloko na bango ya kitoko \q2 mpe bashamo na bango ! \q1 Tika ete bato bawolola bango na bangambo nyonso : \q2 ‹ Somo ekangi bango na bangambo nyonso ! › \q1 \v 30 Bino bavandi ya Atsori, \q2 bokima na lombangu, \q1 bobombama na madusu ya mabanga, » \q2 elobi Yawe. \q1 « Pamba te Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, asaleli bino likita, \q2 asali penza mabongisi ya kosala bino mabe ! \q1 \v 31 Botelema mpe bobundisa ekolo oyo ezali na kimia, \q2 ekolo oyo ebangaka eloko moko te, » \q2 elobi Yawe, \q1 « ekolo oyo ezanga bikuke mpe banzete oyo bakangelaka bikuke, \q2 ekolo oyo bato na yango bazalaka kaka bango moko. \q1 \v 32 Tika ete bashamo na bango ekoma bomengo ya bitumba, \q2 bayiba bibwele na bango ebele. \q1 Nakopanza na mopepe bavandi ya mosika, \q2 mpe nakokweyisela bango pasi longwa na bisika nyonso, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 33 « Atsori ekokoma esika oyo mbwa ya zamba evandaka, \q2 esika oyo etikala pamba mpo na libela : \q1 moto moko te akovanda lisusu kuna \q2 mpe moto moko te akowumela lisusu kati na yango. » \s1 Kosambisama ya Elami \p \v 34 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Elami, na ebandeli ya bokonzi ya Sedesiasi, mokonzi ya Yuda : \b \p \v 35 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q1 « Tala, nakobuka tolotolo ya Elami, \q2 ebundeli oyo esalaka makasi na ye. \q1 \v 36 Nakotindela Elami mipepe minei ya makasi, \q2 wuta na basonge minei ya lola, \q1 nakopanza bango na mokili mobimba \q2 mpe akozala na ekolo moko te \q2 oyo ekozanga koyamba bato ya Elami oyo bakokima. \q1 \v 37 Nakosala ete bato ya Elami balenga \q2 liboso ya banguna na bango, \q1 liboso ya bato oyo bazali koluka kosala bango mabe ; \q2 nakokweyisela bango pasi na kanda na Ngai, » \q2 elobi Yawe. \q1 « Nakolanda bango na mopanga \q2 kino nakosilisa koboma bango. \q1 \v 38 Nakotia Kiti na Ngai ya bokonzi kati na Elami \q2 mpe nakoboma mokonzi mpe bakalaka na yango, » \q2 elobi Yawe. \b \q1 \v 39 « Nzokande, na mikolo ekolanda, \q2 nakozongisa lokumu ya Elami, » \q2 elobi Yawe. \c 50 \s1 Kosambisama ya Babiloni \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na mosakoli Jeremi na tina na Babiloni mpe bato na yango : \q1 \v 2 « Sakola mpe tatola yango kati na bikolo, \q2 telemisa bendele ! \q1 Sala ete bato nyonso bayeba yango, \q2 kobomba likambo moko te ! \q1 Loba : ‹ Bakobotola mokili ya Babiloni ! \q2 Beli\f + \fr 50.2 \fr*\ft Beli ezali kombo mosusu oyo babengelaka Mariduki, nzambe ya bato ya Babiloni.\ft*\f* akoyokisama soni ! \q1 Mariduki akobukana ! \q2 Bililingi na ye ekosambwa, \q2 mpe banzambe na bango ya bikeko ekobukana. › \q1 \v 3 Ekolo moko ekowuta na nor mpe ekobundisa Babiloni, \q2 ekobebisa yango, \q1 bongo moto moko te akovanda lisusu kuna ; \q2 ezala bato to banyama, nyonso ekokima. \b \q1 \v 4 Na tango wana, na mikolo wana, » \q2 elobi Yawe, \q1 « bana ya Isalaele elongo na bato ya Yuda bakokende na kolela \q2 mpo na koluka Yawe, Nzambe na bango. \q1 \v 5 Bakotuna nzela oyo ememaka kino na Siona \q2 mpe bakobalola bilongi na bango na ngomba yango ; \q1 bakolobana bango na bango : \q2 ‹ Boya, tika ete tokangama na Yawe \q1 na nzela ya boyokani oyo ezali na suka te, \q2 boyokani oyo tokoki kobosana te ! › \b \q1 \v 6 Bato na Ngai bazalaki lokola bameme \q2 oyo ebungi nzela ; \q1 babateli na bango babungisaki bango nzela, \q2 basalaki ete bayengayenga na bangomba, \q1 batambola-tambola na bangomba milayi mpe mikuse \q2 mpe babosana lopango na bango ya kopemela. \q1 \v 7 Moto nyonso oyo azalaki komona bango \q2 azalaki koboma bango, \q1 banguna na bango bazalaki koloba : \q2 ‹ Tozali na biso na ngambo te, \q1 mpo ete basali masumu liboso ya Yawe \q2 oyo azali lokola lopango na bango ya bosembo ; \q1 liboso ya Yawe, elikya ya batata na bango. › \b \q1 \v 8 Bobima mbangu na Babiloni, \q2 botika mokili ya Babiloni ! \q1 Bozala lokola bantaba ya mibali \q2 oyo ezali kotambola liboso ya etonga. \b \q1 \v 9 Pamba te nakotelemisa \q2 mpe nakoyeisa lisanga ya bikolo ya nguya \q1 oyo ekowuta na mokili ya nor \q2 mpo na kobundisa Babiloni \q1 mpe kobotola yango wuta na nor ; \q2 makonga na bango ekozala \q1 lokola makonga ya basoda ya mpiko, \q2 oyo bazangaka koboma te. \q1 \v 10 Boye, bakobotola bomengo ya Babiloni \q2 mpe bato nyonso oyo bakobotola yango bakotonda, » \q2 elobi Yawe. \b \q1 \v 11 « Mpo ete bozali kosepela mpe bozali na esengo, \q2 bino bato oyo bozali kobebisa libula na Ngai ; \q1 mpo ete bozali kopumbwa-pumbwa \q2 lokola mwana ngombe ya mwasi oyo ezali konika ble \q2 mpe kolela lokola bampunda, \q1 \v 12 mama na bino akoyoka soni makasi ; \q2 ye oyo abotaki bino akosambwa. \q1 Ekozala ekolo ya suka kati na bikolo, \q2 ekozala zelo na zelo, mabele ya kokawuka mpe esobe. \q1 \v 13 Likolo ya kanda ya Yawe, \q2 bato bakovanda lisusu na Babiloni te \q1 mpo ete ekobebisama nye. \q2 Bato nyonso oyo bakoleka na Babiloni \q1 bakokamwa mpe bakozala na somo \q2 ya komona bapota na yango nyonso. \b \q1 \v 14 Bino bato nyonso oyo bobundaka na matolotolo, \q2 bomitanda na molongo zingazinga ya Babiloni \q1 mpe bobeta yango makonga ! \q2 Botika ata likonga moko te, \q2 pamba te Babiloni asali masumu liboso ya Yawe. \q1 \v 15 Bobetela ye lokito ya bitumba na bangambo nyonso ! \q2 Ayei komitika ye moko, \q1 mpo ete bandako na ye oyo batonga makasi ekweyi, \q2 bamir na ye ebukani : \q1 ezali na lolenge oyo nde \q2 Yawe azongiseli ye mabe na mabe. \q1 Bozongisela ye makambo \q2 oyo ye asalaki bikolo mosusu. \q1 \v 16 Boboma wuta na mokili ya Babiloni \q2 bato oyo basalaka bilanga \q1 mpe bato oyo basimbaka mbeli mpo na kobuka mbuma. \q2 Likolo ya mopanga ya monyokoli, \q1 tika ete moto na moto azonga na mokili na ye, \q2 tika ete moto na moto akima na mokili na ye. \b \q1 \v 17 Isalaele azali lokola meme oyo ebungi nzela, \q2 oyo nkosi ezalaki kolanda : \q1 Mokonzi ya Asiri azalaki moto ya liboso \q2 oyo apasolaki Isalaele ; \q1 Nabukodonozori, Mokonzi ya Babiloni, \q2 azalaki moto ya suka oyo abukaki ye mikuwa. \q1 \v 18 Yango wana tala makambo \q2 oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q1 Nzambe ya Isalaele, alobi : \q2 ‹ Nakopesa mokonzi ya Babiloni mpe mokili na ye \q2 etumbu ndenge napesaki mokonzi ya Asiri. \q1 \v 19 Kasi nakozongisa Isalaele na lopango na ye ; \q2 mpe akolia lisusu matiti ya ngomba Karimeli mpe ya Bashani. \q1 Nzala na ye ekosila na etuka ya bangomba \q2 ya Efrayimi mpe ya Galadi. \q1 \v 20 Na tango wana, na mikolo wana, › \q2 elobi Yawe, \q1 ‹ bakoluka ngambo nini Isalaele amemi \q2 kasi bakomona yango te, \q1 masumu nini Yuda asali kasi bakomona yango te ; \q2 pamba te nakolimbisa batikali oyo nabikisi. \b \q1 \v 21 Bobundisa mokili ya Meratayimi \q2 mpe bavandi ya Pekodi ; \q1 bolanda bango, boboma mpe bobebisa bango nye, › \q2 elobi Yawe. \q2 ‹ Bosala makambo nyonso oyo natindi bino. \q1 \v 22 Makelele ya bitumba ezali kati na mokili, \q2 lokito ya kobebisama monene ! \q1 \v 23 Ndenge nini marto oyo ezalaki kobeta mokili mobimba \q2 ebukani mpe epanzani ? \q2 Ndenge nini penza Babiloni ebebisami kati na bikolo ? \q1 \v 24 Oh Babiloni, nasili kotiela yo motambo, \q2 mpe ekangi yo liboso ete oyeba yango. \q1 Omonanaki mpe okangamaki \q2 mpo ete otelemelaki Yawe. \q1 \v 25 Yawe afungolaki bibundeli na Ye nyonso \q2 mpe abimisaki kati na yango bibundeli ya kanda na Ye ; \q1 pamba te yango nde mosala \q2 oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 asili kosala na mokili ya bato ya Babiloni. \q1 \v 26 Bobimela wuta na bisika nyonso mpo na kobundisa ye, \q2 bobuka bibombelo na ye, \q1 bokangisa bomengo ya bitumba \q2 ndenge bakangisaka maboke ya ble, \q2 bobebisa yango nyonso mpe botika ata eloko moko te. \q1 \v 27 Boboma bana ngombe mibali na ye nyonso ; \q2 tika ete ekende na esika oyo babomelaka banyama ! \q1 Mawa na bango mpo ete mokolo na bango ekoki, \q2 tango mpo na bango ya kozwa etumbu. \b \q1 \v 28 Boyoka ! Tala bango bazali kokima \q2 mpe babiki wuta na mokili ya Babiloni \q1 mpo na koyebisa kati na Siona \q2 ndenge nini Yawe, Nzambe na biso, \q1 azongisi mabe na mabe ; \q2 ndenge nini azongisi mabe na mabe likolo na Tempelo na Ye. \b \q1 \v 29 Bosangisa bato nyonso \q2 oyo babundaka na matolotolo \q1 mpo na kotelemela Babiloni ; \q2 tika ete bato nyonso oyo babundaka na makonga \q1 bazingela Babiloni mobimba, \q2 basala ete ata moto moko te akima, \q1 bafuta yango ndenge ezalaki misala na yango \q2 mpe bazongisela yango makambo \q1 oyo esalaki bikolo mosusu ; \q2 pamba te ebetaki tembe na Yawe, \q2 Mosantu ya Isalaele. \q1 \v 30 Yango wana, na mokolo wana, \q2 bilenge mibali na yango bakokweya na babalabala, \q1 basoda na yango nyonso ya mpiko bakokanga minoko, › \q2 elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \q1 \v 31 ‹ Tala, nazali na kanda na yo, yo mboka ya lolendo, › \q2 elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; \q1 ‹ pamba te mokolo na yo ekoki, \q2 tango na yo ya kozwa etumbu. \q1 \v 32 Ekolo ya lolendo ekobeta libaku mpe ekokweya, \q2 mpe moto moko te akoya kosunga yango ; \q1 nakopelisa moto kati na bingumba na yango, \q2 mpe moto yango ekozikisa bato nyonso \q2 oyo bazingeli yango. › \q1 \v 33 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q2 ‹ Bazali konyokola bana ya Isalaele mpe bato ya Yuda ; \q1 bato nyonso oyo bakangaki bango \q2 mpe bamemaki bango na bowumbu \q2 baboyi kotika bango. \q1 \v 34 Nzokande, Mosikoli na bango azali na makasi, \q2 Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; \q1 akokotela bango na molende \q2 mpo ete amema kimia na mokili na bango \q2 mpe mobulu epai ya bavandi ya Babiloni. \q1 \v 35 Mopanga, boma bato ya Babiloni ; \q2 boma bavandi ya Babiloni, \q1 boma bakambi mpe bato na yango ya bwanya, › \q2 elobi Yawe ! \q1 \v 36 ‹ Mopanga, boma basakoli na yango ya lokuta ; \q2 tika ete bakoma bato ya maboma ! \q1 Mopanga, boma basoda na yango ya mpiko ; \q2 tika ete bakoma na somo ! \q1 \v 37 Mopanga, boma bampunda mpe bashar na yango, \q2 bapaya nyonso oyo bazali sima na yango \q1 mpo ete bakoma lokola basi ! \q2 Mopanga, bebisa bomengo na yango \q2 mpo ete ekoma bomengo ya bitumba ! \q1 \v 38 Bokawuki, kweyela mayi na yango mpo ete ekawuka ; \q2 pamba te ezali mokili ya banzambe ya bikeko, \q2 bikeko oyo epesaka bato somo ! \b \q1 \v 39 Bikelamu ya esobe mpe bambwa ya zamba \q2 ekokoma kovanda kuna ; \q1 maligbanga mpe ekokoma kovanda kuna. \q2 Bato bakovanda lisusu kuna te \q2 to moto moko te akotikala kuna mpo na libela. \q1 \v 40 Ndenge Nzambe abebisaki Sodome mpe Gomore \q2 elongo na bingumba na yango ya zingazinga, › » \q2 elobi Yawe, \q1 « moto moko te akovanda lisusu kuna, \q2 moto moko te akowumela kati na yango. \q1 \v 41 Tala, mampinga moko ya basoda ezali koya wuta na nor, \q2 ekolo moko monene mpe bakonzi ebele bazali komibongisa \q2 mpo na bitumba wuta na basuka ya mabele. \q1 \v 42 Basimbi matolotolo mpe makonga, \q2 bazali bato na kanza mpe bazanga mawa, \q1 bazali koganga lokola makelele ya ebale monene, \q2 bamati likolo ya bampunda, \q1 batandami na milongo lokola basoda \q2 mpo na kobundisa yo Babiloni, mboka kitoko ! \q1 \v 43 Tango mokonzi ya Babiloni ayokaki sango na tina bango, \q2 alembaki nzoto, somo makasi ekangaki ye \q1 mpe akomaki na pasi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. \q1 \v 44 Ndenge nkosi eyaka wuta na bazamba ya Yordani \q2 mpo na kokende na mapango \q1 epai wapi babokolaka bibwele, \q2 ndenge wana mpe nakobengana Babiloni \q1 na mokili na yango na mbala moko ; \q2 Ngai moko nakopona moto \q1 oyo akokoma mokonzi ya Babiloni. \q2 Nani akokani na Ngai ? \q1 Nani akoki kobeta tembe na Ngai ? \q2 Mobateli bibwele nani akoki kotelema liboso na Ngai ? » \b \q1 \v 45 Yango wana, boyoka mabongisi oyo \q2 Yawe asili kosala mpo na Babiloni, \q1 mokano oyo asili kozwa mpo na kotelemela \q2 mokili ya bato ya Babiloni : \q1 Bakobengana bango na lopango \q2 lokola bana mike ya etonga, \q2 akobebisa etando na bango. \q1 \v 46 Na lokito ya kokweya ya mokili ya Babiloni, \q2 mabele ekoningana ; \q1 makelele na yango ekoyokana \q2 kino na bikolo mosusu. \c 51 \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Tala, nakotinda mopepe ya makasi mpo na \q2 kobebisa mokili ya Babiloni mpe bato ya Lebi-Kamayi. \q1 \v 2 Nakotinda bapaya na Babiloni \q2 mpo na koyungola mpe kobebisa yango : \q1 bakobundisa yango na bangambo nyonso \q2 na mokolo na yango ya kosambisama. \q1 \v 3 Basoda oyo babundaka na matolotolo bakozwa tango te \q2 ya kobeta makonga na bango ; \q1 bakozwa tango te ya kolata bibombelo ya tolo, \q2 bakobikisa te basoda na bango ya bilenge \q2 mpe bakoboma mampinga na bango nyonso. \q1 \v 4 Bato oyo bakokweya na mopanga \q2 bakotondisa mokili ya Babiloni \q1 mpe babalabala na yango ekotonda \q2 na bato bazoka bapota. \q1 \v 5 Ata soki mokili na bango etondaki na masumu \q2 liboso ya Mosantu ya Isalaele, \q1 Nzambe na bango, Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 abosanaki Isalaele na Yuda te. \b \q1 \v 6 Bobima na Babiloni, bobikisa bomoi na bino ! \q2 Soki te, bokokufa likolo ya masumu na bango. \q1 Ezali tango oyo Yawe alingi kozongisela bango \q2 mabe na mabe mpe kofuta bango \q2 ndenge ezali misala na bango. \q1 \v 7 Babiloni ezali lokola kopo ya wolo na loboko ya Yawe ; \q2 ezalaki kolangwisa mokili mobimba. \q1 Bongo bato ya bikolo bameli masanga na yango \q2 mpe bakomi lokola bazoba. \q1 \v 8 Babiloni ekokweya na mbalakata mpe ekobukana ! \q2 Bosala matanga mpo na yango mpe botia kisi na pota na yango, \q2 tango mosusu akobika. \b \q1 \v 9 ‹ Tozalaki na posa ya kobikisa Babiloni, kasi akobika te ; \q2 yango wana, tobima kati na yango mpe tokende, \q1 moto na moto na engumba na ye ; \q2 pamba te esambiselo na ye ekomi kino na Lola, \q2 emati likolo lokola mapata. › \b \q1 \v 10 ‹ Yawe apesi biso etumbu ! \q2 Boya totatola na Siona makambo oyo \q2 Yawe, Nzambe na biso, asali. › \b \q1 \v 11 Bopelisa basonge ya makonga, \q2 bokamata banguba na bino ; \q1 pamba te Yawe atindi bakonzi ya Medi \q2 mpo ete mokano na Ye ezali ya kobebisa Babiloni. \q1 Yawe akozongisa mabe na mabe, \q2 akosala yango mpo na Tempelo na Ye. \q1 \v 12 Botelemisa bendele na bino liboso ya bamir ya Babiloni ! \q2 Bobakisa motango ya bakengeli mpe ya basinzili, \q2 botia mitambo ! \q1 Yawe akokokisa mabongisi na Ye \q2 mpe ekateli ya etumbu na Ye mpo na bato ya Babiloni. \q1 \v 13 Yo oyo ovandaka pembeni ya bibale minene, \q2 yo oyo otonda na bomengo mingi, \q2 suka na yo ebelemi, tango na yo ya kobebisama ekoki ! \q1 \v 14 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi na Kombo na Ye moko : \q2 Solo, nakotondisa yo na bato lokola liboke ya mabanki, \q2 bongo bakobeta milolo ya elonga likolo na yo. \b \q1 \v 15 Asala mabele na nguya na Ye, \q2 alendisa mokili na bwanya na Ye \q2 mpe atanda likolo na mayele na Ye. \q1 \v 16 Tango agangaka, \q2 mayi etiaka makelele makasi kuna na likolo, \q1 asangisaka mapata wuta na basuka ya mokili, \q2 apelisaka mikalikali, \q1 anokisaka mvula \q2 mpe abimisaka mopepe \q2 wuta na bibombelo na Ye. \b \q1 \v 17 Bato nyonso bakomaka lokola bazoba, \q2 lokola bato oyo basili mayele ; \q1 monyangwisi bibende na moto atikalaka na soni likolo na bikeko na ye, \q2 pamba te bikeko na ye ezalaka na yango biloko ya lokuta, \q2 ezalaka na pema te kati na yango. \q1 \v 18 Ezali biloko ya pamba, biloko ya kotiola ; \q2 ekolimwa na tango ya kosambisama. \q1 \v 19 Ye oyo azali libula ya Jakobi akokani na bikeko wana te, \q2 pamba te azali Mokeli ya biloko nyonso, \q1 ezala ata ekolo oyo ezali libula na Ye ; \q2 Kombo na Ye ezali Yawe, Mokonzi ya mampinga. \b \q1 \v 20 Ozalaki solo marto, \q2 ebundeli na Ngai ya bitumba : \q1 elongo na yo, napanzaki bikolo ; \q2 elongo na yo, nabebisaki mikili ; \q1 \v 21 elongo na yo, napanzaki mpunda mpe motambolisi na yango ; \q2 elongo na yo, napanzaki shar mpe motambolisi na yango ; \q1 \v 22 elongo na yo, napanzaki mwasi mpe mobali ; \q2 elongo na yo, napanzaki mibange mpe bilenge ; \q2 elongo na yo, napanzaki bilenge mibali mpe bilenge basi ; \q1 \v 23 elongo na yo, napanzaki babateli bibwele mpe bibwele na bango ; \q2 elongo na yo, napanzaki mosali bilanga mpe bangombe na ye ; \q2 elongo na yo, napanzaki bayangeli mpe bakalaka. \q1 \v 24 Nakozongisela Babiloni mpe bavandi na yango nyonso \q2 mabe nyonso oyo basalaki Siona, » \q2 elobi Yawe. \b \q1 \v 25 « Yo ngomba oyo obebisaka, \q2 yo oyo obebisaka mokili, nakotelemela yo, » \q2 elobi Yawe, \q1 « nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo, \q2 nakokitisa yo wuta na likolo ya mabanga, \q2 mpe nakokomisa yo ngomba ezika na moto. \q1 \v 26 Bakotikala lisusu te kozwa epai na yo \q2 libanga oyo batongelaka basonge ya bamir \q1 to libanga oyo batongelaka miboko ; \q2 pamba te okobebisama mpo na libela, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 27 « Botelemisa bendele kati na mokili ! \q2 Bobeta kelelo kati na bikolo ! \q1 Bobongisa bikolo mpo na kobundisa Babiloni, \q2 bobenga bakonzi ya basoda ya mikili ya Ararati, \q1 ya Mini mpe ya Ashikenazi \q2 mpo ete babundisa yango. \q1 Bopona mokonzi moko ya basoda \q2 mpo ete atambolisa bitumba, \q2 botinda bampunda lokola liboke ya mabanki. \q1 \v 28 Bobongisa bikolo mpo na kobundisa yango : \q2 bakonzi ya Medi, bayangeli na bango mpe bakalaka na bango nyonso \q2 mpe bamboka nyonso oyo bazali kokamba. \q1 \v 29 Mikili ezali koningana mpe kotepatepa, \q2 pamba te mikano ya Yawe mpo na Babiloni ezali kokokisama \q1 mpo na kobebisa yango mpo ete, ata moto moko te \q2 atikala kovanda lisusu kuna. \q1 \v 30 Basoda ya Babiloni batiki kobunda, \q2 babombami kati na bandako batonga makasi. \q1 Makasi na bango esili, bakomi lokola basi. \q2 Bandako ya Babiloni etumbami mpe babuki \q2 bikangelo bikuke na yango. \q1 \v 31 Bato oyo bamemaka mikanda bazali kolandana mbangu, \q2 mpe bamemi sango bazali kolandana mbangu \q1 mpo na koyebisa mokonzi ya Babiloni \q2 ete babotoli engumba mobimba, \q1 \v 32 bakangi bapon mpe bibale ; \q2 banzete oyo ebotaka na mayi esili na kozika moto \q2 mpe basoda bakomi na somo. » \b \q1 \v 33 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 Nzambe ya Isalaele, alobi : \q1 « Elenge mwasi Babiloni azali lokola etando ya ble \q2 na tango banyataka-nyataka yango ; \q2 mpe etikali moke, tango ya kokata ble ekokoka mpo na yango. \b \q1 \v 34 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abomaki biso ; \q2 solo, atiaki biso na mobulu, \q1 akomisaki biso lokola mbeki ya pamba ; \q2 amelaki biso ndenge nguma emelaka nyama, \q1 atondisaki libumu na ye na biloko na biso ya kitoko ; \q2 mpe sima, asanzaki biso. \q1 \v 35 Tika ete mabe oyo basali biso mpe bana na biso \q2 ekweyela Babiloni, » \q1 elobi bavandi ya Siona ! \q2 « Tika ete makila na biso etangama na mito ya bavandi ya Babiloni, \q2 elobi bavandi ya Yelusalemi ! » \b \p \v 36 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Tala, nakozwa likambo na yo na maboko \q2 mpe nakozongisa mabe na bato oyo basalaki yo mabe, \q1 nakokawusa ebale na yango ya monene \q2 mpe nakokawusa maziba na yango. \q1 \v 37 Mokili ya Babiloni ekokoma liboke ya mabanga, \q2 ndako ya mbwa ya zamba, eloko ya somo mpe ya kotiola ; \q2 bongo, bato bakovanda lisusu kuna te. \q1 \v 38 Bato na yango nyonso bakokoma koganga \q2 lokola nkosi ya mike \q2 mpe kolela lokola bana ya nkosi. \q1 \v 39 Kasi tango bakokoma na posa makasi ya kosangisa nzoto, \q2 nakobongisela bango feti \q1 mpe nakolangwisa bango masanga \q2 mpo ete batondisama na esengo ; \q1 bongo, bakolala pongi ya libela \q2 mpe bakoka lisusu kolamuka te, » \q2 elobi Yawe, \q1 \v 40 « nakomema bango ndenge bamemaka bampate \q2 to bameme ya mibali to mpe bantaba ya mibali \q2 na esika oyo babomelaka bibwele. \q1 \v 41 Ndenge nini bakangi Sheshaki ! \q2 Ndenge nini basukisi lolendo ya ekolo \q1 oyo ezalaki kosala lokumu ya mokili mobimba ! \q2 Ndenge nini penza Babiloni ekomi penza \q2 eloko ya somo kati na bikolo ! \q1 \v 42 Ebale monene ekozindisa Babiloni, \q2 makelele ya bambonge na yango ekozipa mokili ya Babiloni. \q1 \v 43 Bingumba na yango ekobebisama, \q2 ekokoma lokola mokili oyo ekawuka to lokola esobe, \q1 mokili oyo bato bavandaka te, \q2 mokili epai wapi bato bayaka na mibembo te. \q1 \v 44 Nakopesa Beli etumbu kati na Babiloni, \q2 nakobimisa ye eloko oyo ameli na monoko ; \q1 ekolo moko te ekoya lisusu epai na ye \q2 mpe bamir ya Babiloni ekokweya. \b \q1 \v 45 Oh bato na Ngai, bobima na Babiloni ! \q2 Bobikisa bomoi na bino liboso ya kanda makasi ya Yawe ! \q1 \v 46 Bobanga te mpe bolemba nzoto te \q2 tango bokoyoka basango ya mabe kati na mokili : \q1 mobu oyo, sango ya mabe ; mobu oyo elandi, sango mosusu ya mabe ; \q2 kaka sango ya mobulu kati na mokili \q2 to sango ya mokonzi moko abundisi mokonzi mosusu. \q1 \v 47 Pamba te tango ekoya solo, \q2 tango oyo nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni ; \q1 mpe mokili na yango nyonso ekozala na soni, \q2 mpe bato na yango nyonso oyo bazokisa makasi na mopanga \q2 bakokufa kuna. \q1 \v 48 Bongo likolo, mabele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango \q2 ekoganga na esengo mpo na komona kobebisama ya Babiloni, \q1 pamba te babebisi bakobimela na nor mpo na kobundisa yango, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 49 « Babiloni mpe esengeli kokweya, \q2 mpo na bana ya Isalaele oyo bakufaki, \q2 ndenge kaka bato ya mokili mobimba bakufaki mpo na Babiloni. \q1 \v 50 Bino bato oyo bobiki na mopanga, \q2 bokima, bolekisa tango te ! \q2 Wuta na mokili ya mosika, bokanisa Yawe mpe Yelusalemi ! \b \q1 \v 51 Tosambwe, pamba te totiolami ; \q2 mpe bilongi na biso ezipami na soni \q1 mpo ete bapaya bakoti kino na bisika ya bule \q2 ya Tempelo ya Yawe. \q1 \v 52 Kasi na mikolo ekoya, » \q2 elobi Yawe, \q1 « nakopesa etumbu na banzambe ya Babiloni, \q2 mpe mokili mobimba ekotonda na makelele ya bato \q2 oyo bazoka bapota ya somo. \q1 \v 53 Ata soki mokili ya Babiloni emati kino na Lola \q2 mpe elendisi bandako na yango oyo batonga makasi, \q2 nakotindela yango bato mpo na kokweyisa yango, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 54 « Makelele ya koganga ekoyokana, wuta na mokili ya Babiloni, \q2 lokito makasi ya kobebisama ya mokili ya bato ya Babiloni. \q1 \v 55 Pamba te Yawe akobebisa Babiloni \q2 mpe akokanga yango monoko. \q1 Lokito ya banguna ekoyokana lokola makelele \q2 ya bambonge ya bibale minene ; \q2 bongo mingongo ya bato ekoyokana makasi. \q1 \v 56 Mobebisi akoya kobundisa Babiloni ; \q2 bongo bakokanga basoda na yango ya mpiko \q1 mpe bakobuka matolotolo na bango, \q2 pamba te Yawe azali Nzambe oyo afutaka : \q2 afutaka kolanda misala ya moto na moto. \q1 \v 57 Nakolangwisa masanga : bakalaka mpe bato na yango ya bwanya, \q2 bayangeli, bakonzi ya basoda mpe basoda na yango ya mpiko. \q1 Bakolala pongi ya libela \q2 mpe bakolamuka lisusu te, » \q2 elobi Mokonzi oyo Kombo na Ye ezali : Yawe, Mokonzi ya mampinga. \q1 \v 58 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q2 « Bamir nyonso ya milayi ya Babiloni ekokweyisama \q1 mpe bikuke na yango nyonso ya minene ekozikisama na moto ; \q1 bato bazali kosala bobele mosala ya pamba \q2 mpe bato ya bikolo mosusu bazali komimonisa pasi \q2 mpo na mosala oyo ekobeba na moto. » \s1 Buku ezindi na ebale \p \v 59 Tala sango oyo mosakoli Jeremi apesaki epai ya Seraya, mwana mobali ya Neriya, mwana mobali ya Maaseya, tango akendeki na Babiloni elongo na Sedesiasi, mokonzi ya Yuda, na mobu ya minei ya bokonzi na ye. Seraya azalaki mokonzi ya molako. \v 60 Jeremi akomaki kati na buku pasi nyonso oyo esengelaki kokomela Babiloni. Makambo wana nyonso ekomamaki na tina na mokili ya Babiloni. \v 61 Jeremi alobaki na Seraya : « Tango okokoma kati na Babiloni, sala ete otanga makambo oyo nyonso na mongongo makasi. \v 62 Bongo okoloba : ‹ Oh Yawe, Yo moko nde olobaki ete okobebisa esika oyo mpo ete bato mpe bibwele bavanda lisusu awa te, kasi etikala pamba mpo na libela. › \v 63 Tango okosilisa kotanga buku yango, kangisa yango na libanga, bwaka yango na ebale Efrate mpe loba : \v 64 ‹ Ezali boye nde Babiloni ekozinda mpe ekomata lisusu te, likolo ya pasi oyo nakotindela yango. Mpe bato na yango bakokweya. › » \p Maloba ya Jeremi esuki awa. \c 52 \s1 Yelusalemi ekweyi na maboko ya banguna \p \v 1 Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki Amutali, mwana ya Jeremi, moto ya Libina. \v 2 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Yeoyakimi asalaki. \v 3 Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika na Ye. \p Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni. \p \v 4 Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango na libanda ya engumba mpe batimolaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso. \v 5 Engumba yango ezingelamaki kino na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi. \p \v 6 Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba, mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te, \v 7 bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani. \v 8 Kasi basoda ya Babiloni balandaki mokonzi Sedesiasi mpe bakangaki ye kati na etando ya Jeriko epai wapi basoda na ye nyonso bakimaki mpe bapanzanaki. \v 9 Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi, bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila kati na mokili ya Amati ; mpe mokonzi ya Babiloni akatelaki ye etumbu. \v 10 Kuna na Ribila, mokonzi ya Babiloni apesaki mitindo ete bakata mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso ya Sedesiasi. Mokonzi ya Babiloni apesaki lisusu mitindo ete baboma bakalaka nyonso ya Yuda. \v 11 Bongo, atobolaki miso ya Sedesiasi, akangaki ye minyololo ya bibende mpe amemaki ye na Babiloni. Mokonzi ya Babiloni abwakaki ye na boloko kino na mokolo oyo akufaki. \p \v 12 Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, oyo azalaki kosala esika moko na mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya zomi ya sanza ya mitano. \v 13 Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene. \v 14 Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi. \p \v 15 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu ndambo ya babola, ndambo ya bato oyo batikalaki kati na engumba, ndambo ya bato ya misala ya maboko mpe ba-oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni. \v 16 Kasi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga. \p \v 17 Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango nyonso na Babiloni bisalelo. \v 18 Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo : basani ya putulu, bapawu, bambeli, basani ya kobwakela mayi, bakopo. \v 19 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi akamataki lisusu biloko nyonso ya wolo mpe ya palata : basani ya minene, bambabola, basani ya kobwakela mayi, basani ya putulu, bitelemiselo ya minda, bakopo mpe milangi mpo na makabo ya masanga. \v 20 Bakokaki te komeka kilo ya bronze ya biloko nyonso oyo mokonzi Salomo asalaki mpo na Tempelo ya Yawe : makonzi nyonso mibale, nzungu ya monene, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki kosimba nzungu ya monene mpe bashario. \v 21 Likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa, na bosanda, mpe bametele pene motoba, na kovimba na yango ; bongo bronze oyo basalelaki yango ezalaki evimba na basantimetele pene mwambe, mpe ezalaki polele na kati. \v 22 Basalaki na bronze moto ya likonzi moko na moko, mpe ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Bazingelaki yango na bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe na bambuma ya grenade ; nyonso esalemaki na bronze. \v 23 Bangambo nyonso ezalaki na bambuma ya grenade tuku libwa na motoba mpe motango nyonso ya bambuma ya grenade oyo ezalaki zingazinga ya basinga oyo basala lokola basheni ezalaki nkama moko. \p \v 24 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko : Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo. \v 25 Kati na bato oyo batikalaki kati na engumba, akangaki lisusu moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo azalaki na mokumba ya kotala makambo ya basoda ya bitumba ; bapesi toli sambo ya mokonzi, oyo batikalaki kati na engumba ; mokomi mikanda ya mokonzi ya mampinga, oyo azalaki na mokumba ya kokoma bakombo ya bato ya mboka mpo na kokota na mosala ya mampinga ; mpe mibali tuku motoba ya Yuda, oyo bakutaki kati na engumba. \v 26 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, akamataki bango nyonso mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila. \v 27 Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango. \b \li4 \v 28 Tala motango ya bato oyo Nabukodonozori amemaki na bowumbu : \b \li1 Bayuda nkoto misato na tuku mibale na misato, \li2 na mobu ya sambo wuta tango akomaki mokonzi ; \li1 \v 29 Bayuda nkama mwambe na tuku misato na mibale oyo bawutaki na Yelusalemi, \li2 na mobu ya zomi na mwambe wuta tango Nabukodonozori akomaki mokonzi ; \li1 \v 30 bongo na mobu ya tuku mibale na misato ya bokonzi ya Nabukodonozori, \li2 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu Bayuda nkama sambo na tuku minei na mitano. \b \li4 Bango nyonso bazalaki bato nkoto minei na nkama motoba. \s1 Yeoyakini abimi na boloko \p \v 31 Tango Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na sambo na bowumbu, Evili-Merodaki, mokonzi ya Babiloni, ayokelaki Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, mawa mpe abimisaki ye na boloko, na mokolo ya tuku mibale na mitano ya sanza ya zomi na mibale, kaka na mobu oyo akomaki mokonzi. \v 32 Evili-Merodaki asololaki na Yeoyakini na boboto mpe apesaki ye lokumu koleka bakonzi mosusu oyo bazalaki elongo na ye, na bowumbu kati na Babiloni ; \v 33 apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye. \v 34 Mokonzi ya Babiloni azalaki kopesa ye nyonso oyo asengeli na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye kino na mokolo ya kufa na ye.