\id JDG Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Bilombe \toc1 Bilombe \toc2 Bilombe \toc3 Bil \mt1 Bilombe \c 1 \s1 Isalaele ayei kovanda na Kanana \p \v 1 Sima na kufa ya Jozue, bana ya Isalaele batunaki Yawe : \pi1 — Libota nini kati na biso ekokende liboso mpo na kobundisa bato ya Kanana ? \p \v 2 Yawe azongisaki : \pi1 — Libota ya Yuda nde ekokende liboso, pamba te napesi mokili oyo na maboko na bango. \p \v 3 Bongo bato ya libota ya Yuda balobaki na bandeko na bango ya libota ya Simeoni : \pi1 — Boya elongo na biso mpo ete tobundisa bato ya Kanana, mpo na eteni ya mabele oyo epesamelaki biso. Bongo, biso mpe tokokende elongo na bino, na eteni ya mabele na bino. \p Boye, bato ya libota ya Simeoni bakendeki elongo na bango. \p \v 4 Tango libota ya Yuda ekotaki na bitumba, Yawe akabaki bato ya Kanana mpe ya Perizi na maboko na bango, mpe babomaki bato nkoto zomi, na Bezeki. \v 5 Ezalaki kuna nde bakutaki Adoni-Bezeki mpe babundisaki ye. Balongaki bato ya Kanana mpe ya Perizi. \v 6 Adoni-Bezeki akimaki ; kasi balandaki ye mpe bakangaki ye, bakataki ye misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo. \p \v 7 Adoni-Bezeki alobaki : « Bakonzi tuku sambo, oyo bakata bango misapi ya minene ya maboko mpe ya makolo, bazalaki kolokota biloko oyo ezalaki kokweya na se ya mesa na ngai. Sik’oyo, Nzambe azongiseli ngai makambo oyo nasalaki baninga. » \p Bamemaki ye na Yelusalemi, mpe akufaki kuna. \p \v 8 Bato ya libota ya Yuda babundisaki Yelusalemi mpe babotolaki yango ; babomaki bato ya engumba yango na mopanga mpe batiaki yango moto. \v 9 Sima na yango, bato ya libota ya Yuda bakendeki kobundisa bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili ya bangomba, na Negevi, mpe na etando oyo ezalaki pembeni ya ebale. \p \v 10 Bato ya libota ya Yuda babundisaki lisusu bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Ebron, oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Ariba. » Balongaki Sheshayi, Ayimani mpe Talimayi. \v 11 Longwa wana, bapusanaki mpe bakendeki kobundisa bavandi ya Debiri oyo kombo na yango ezalaki na kala « Kiriati-Seferi. » \v 12 Kalebi alobaki : « Nakopesa na libala Akisa, mwana na ngai ya mwasi, epai ya moto nyonso oyo akobundisa mpe akobotola Kiriati-Seferi. » \p \v 13 Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, ndeko ya Kalebi, abotolaki yango ; boye Kalebi apesaki Akisa, mwana na ye ya mwasi, na libala epai ya Otinieli. \v 14 Nzokande, tango Akisa akomaki na ndako ya Otinieli, atindikaki ye ete asenga elanga epai ya Kalebi, tata na ye. Boye, tango Akisa akitaki wuta na ane na ye, Kalebi atunaki ye : \pi1 — Olingi nini ? \p \v 15 Akisa azongisaki : \pi1 — Salela ngai ngolu. Lokola opesaki ngai eteni ya mabele kati na Negevi, pesa ngai lisusu bitima. \p Boye, Kalebi apesaki ye bitima ya likolo mpe ya se. \p \v 16 Bakitani ya Keni oyo azalaki bokilo ya Moyize balongwaki na engumba ya banzete ya Mbila elongo na bato ya libota ya Yuda, mpe bakendeki kovanda esika moko na bavandi ya esobe ya Yuda, oyo ezali na sude ya Aradi. \p \v 17 Bato ya libota ya Yuda elongo na bandeko na bango ya libota ya Simeoni bakendeki kobundisa bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Tsefati, mpe babebisaki bango. Yango wana, bapesaki engumba yango kombo « Orima. » \p \v 18 Bato ya libota ya Yuda babotolaki lisusu Gaza, Ashikeloni mpe Ekroni, elongo na mabele na yango ya pembeni. \v 19 Yawe azalaki elongo na bato ya libota ya Yuda. Babotolaki mokili ya bangomba, kasi balongaki te kobengana bavandi ya etando, pamba te bazalaki na bashar ya bibende. \p \v 20 Kolanda ndenge Moyize alobaki, bapesaki na Kalebi engumba Ebron. Mpe Kalebi abenganaki na Ebron bana mibali misato ya Anaki. \v 21 Nzokande, bato ya libota ya Benjame babenganaki te bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda na Yelusalemi. Boye, kino na mokolo ya lelo, bato ya Yebusi bavandaka esika moko na bato ya libota ya Benjame. \p \v 22 Bato kati na ndako ya Jozefi bamataki mpo na kobundisa Beteli, mpe Yawe azalaki elongo na bango. \v 23 Tango libota ya Jozefi etindaki bato ete bakende kononga engumba Beteli oyo bazalaki kobenga na kala Luze, \v 24 banongi bamonaki moto moko kobima na engumba mpe balobaki na ye : « Lakisa biso esika nini tokoki kokotela na kati ya engumba, mpe tokosalela yo bolamu. » \p \v 25 Boye, alakisaki bango esika ya kokotela na kati na engumba. Mpe babomaki bato ya engumba yango na mopanga, kasi babikisaki moto wana elongo na libota na ye mobimba. \v 26 Moto yango akendeki na mokili ya bato ya Iti mpe atongaki kuna engumba oyo apesaki kombo « Luze » oyo etikala kino lelo. \p \v 27 Kasi bato ya libota ya Manase babenganaki te bato ya Beti-Sheani mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Taanaki mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Dori mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Yibileayimi mpe bamboka na yango ya mike, bato ya Megido mpe bamboka na yango ya mike ; pamba te bato ya Kanana batingamaki kaka kovanda na mokili yango. \v 28 Tango bana ya Isalaele bakomaki lisusu makasi, bakomaki kosalisa bato ya Kanana misala makasi, kasi babenganaki bango nyonso te. \p \v 29 Bato ya libota ya Efrayimi babenganaki te bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na Gezeri, mpe bato ya Kanana bakobaki kovanda esika moko na bango. \p \v 30 Bato ya libota ya Zabuloni babenganaki te bavandi ya Kitroni mpe ya Naaloli. Bato ya Kanana bakobaki kovanda esika moko na bango, kasi bakomaki kosalisa bango misala makasi. \p \v 31 Bato ya libota ya Aseri babenganaki te bato ya Ako, ya Sidoni, ya Ayilabi, ya Akizibi, ya Eliba, ya Afiki mpe ya Reobi. \v 32 Likolo na yango, bato ya libota ya Aseri bakomaki kovanda esika moko na bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili yango. \p \v 33 Bato ya libota ya Nefitali babenganaki te bato oyo bazalaki kovanda na Beti-Shemeshi mpe na Beti-Anati. Boye, bakomaki kovanda esika moko na bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda na mokili yango ; kasi bato ya Beti-Shemeshi mpe ya Beti-Anati bakomaki kosala misala makasi. \p \v 34 Bato ya Amori batindikaki libota ya Dani mosika, na likolo ya bangomba, mpo ete balonga te kokita na etando ya polele. \v 35 Boye, bato ya Amori mpe batingamaki kaka kovanda na Ari-Eresi, na Ayaloni mpe na Shaalibimi. Kasi tango ndako ya Jozefi ekomaki lisusu na nguya, bakomaki kosalisa bango misala makasi. \v 36 Mondelo ya mabele ya bato ya Amori ezalaki longwa na Libanga ya Sela, elekaki na bangomba ya Akarabimi kino na likolo. \c 2 \s1 Yawe apameli bato na Ye \p \v 1 Anjelu ya Yawe alongwaki na Giligali mpe akendeki na Bokimi. Alobaki : « Nabimisaki bino na Ejipito mpe nakotisaki bino na mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi. Nalobaki : ‹ Nakotikala kokata boyokani te kati na Ngai mpe bino ; \v 2 mpe bokosala boyokani te elongo na bato ya mokili oyo, kasi bokobuka bitumbelo na bango. › Nzokande, botosaki Ngai te. Mpo na nini bosalaki bongo ? \v 3 Sik’oyo, nalobi na bino ete nakobengana bango lisusu te liboso na bino ; bakokoma nzube na mipanzi na bino, mpe banzambe na bango ya bikeko ekokoma mitambo mpo na bino. » \p \v 4 Tango Anjelu ya Yawe alobaki makambo oyo epai ya bana nyonso ya Isalaele, bakomaki kolela makasi, \v 5 mpe babengaki esika yango Bokimi. Babonzaki kuna bambeka epai na Yawe. \s1 Kufa ya Jozue \p \v 6 Sima na Jozue kobengana bato, bana ya Isalaele bakendeki kobotola mokili, moto na moto na eteni na ye ya mabele. \v 7 Basalelaki Yawe tango nyonso Jozue azalaki na bomoi mpe, sima na kufa na ye, tango nyonso bampaka, oyo bamonaki misala nyonso ya Yawe mpo na Isalaele, bazalaki na bomoi. \v 8 Jozue, mwana mobali ya Nuni, mosali na Yawe, akufaki tango akokisaki mibu nkama moko na zomi ya mbotama. \v 9 Bakundaki ye na mabele ya libula na ye, na Timinati-Eresi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ngambo ya nor ya ngomba Gashi. \s1 Bato basundoli Yawe \p \v 10 Sima na yango, molongo nyonso ya bato oyo bazalaki elongo na Jozue basilaki na kokufa ; mpe molongo mosusu ya bato oyo babotamaki sima na bango ebimaki, molongo oyo eyebaki Yawe te mpe emonaki te misala oyo asalaki mpo na Isalaele. \p \v 11 Bongo bana ya Isalaele bakomaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe mpe kosalela banzambe ya Bala. \v 12 Basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na mokili ya Ejipito, mpe bakomaki kosambela mpe kosalela banzambe ya ndenge na ndenge ya bato oyo bazalaki zingazinga na bango ; bakomaki kogumbama liboso ya banzambe yango. Mpo na yango, bapelisaki kanda ya Yawe, \v 13 pamba te basundolaki Yawe mpo na kosalela banzambe Bala mpe Asitarite. \p \v 14 Bongo Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe akabaki bango na maboko ya bato mabe oyo babotolaki bango biloko na makasi ; asundolaki bango epai ya banguna na bango, oyo bazalaki zingazinga na bango, mpe bazangaki makoki ya kotelemela bango. \v 15 Tango nyonso bana ya Isalaele bazalaki kokende bitumba, loboko na Yawe ezalaki kotelemela bango mpo ete balonga te, ndenge kaka alapaki ndayi mpo na bango. Boye bazalaki na pasi makasi. \p \v 16 Yawe abimisaki Bilombe oyo babikisaki bango wuta na maboko ya bato mabe oyo bazalaki kobotola bango biloko na makasi. \v 17 Kasi bana ya Isalaele bayokelaki ata Bilombe na bango te, kasi bazalaki kosambela mpe kosalela banzambe mosusu. Batikaki noki nzela oyo batata na bango bazalaki kolanda : nzela ya kotosa mibeko na Yawe. Balandaki ndakisa na bango te. \v 18 Tango nyonso Yawe azalaki kobimisela bango elombe, abandaki mpe kozala elongo na elombe yango mpo na kobikisa bango wuta na maboko ya banguna na bango, na tango nyonso oyo elombe yango azalaki na bomoi. Solo Yawe azalaki koyokela bango mawa, pamba te azalaki koyoka bango kolela liboso ya banyokoli na bango mpe ya bato oyo bazalaki komonisa bango pasi. \v 19 Kasi soki elombe akufi, bato bazalaki kozongela misala mabe koleka kutu mabe ya batata na bango ; bazalaki kosambela, kosalela, kogumbamela banzambe mosusu. Bazalaki koboya kotika misala na bango ya mabe mpe bazalaki kaka kotingama na nzela na bango. \p \v 20 Boye Yawe atombokelaki bana ya Isalaele mpe alobaki : « Lokola ekolo oyo ekataki boyokani oyo nasalaki elongo na batata na bango mpe eboyi koyokela Ngai, \v 21 Ngai mpe nakobengana lisusu te liboso na bango ata ekolo moko kati na bikolo oyo Jozue atikaki liboso ete akufa. \v 22 Nakosalela bikolo yango mpo na komeka Isalaele mpe kotala soki bakobatela mpe bakotambola na nzela ya Yawe lokola batata na bango. » \v 23 Yawe akabaki te bikolo yango na maboko ya Jozue, asalaki ete etikala ; abenganaki yango te mbala moko. \c 3 \p \v 1 Tala bikolo oyo Yawe atikaki mpo na komeka bana ya Isalaele oyo bazalaki na tango ya bitumba ya Kanana. \v 2 Asalaki bango bongo, kaka mpo ete milongo ya sika ya bana ya Isalaele oyo bazalaki te na tango ya bitumba, bayeba nini yango bitumba. \v 3 Yawe atikaki kati na mokili yango bakonzi mitano ya bato ya Filisitia, bato nyonso ya Kanana, bato nyonso ya Sidoni mpe bato nyonso ya Evi, oyo bazalaki kovanda na bangomba ya Libani, wuta na ngomba ya Bala-Erimoni kino na Lebo-Amati. \v 4 Bikolo wana etikalaki mpo na komeka bana ya Isalaele mpe kotala soki bakotosa mitindo oyo Yawe apesaki bakoko na bango na nzela ya Moyize. \v 5 Bana ya Isalaele bavandaki kati na bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi ; \v 6 babalaki bana basi na bango mpe babalisaki bana na bango ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe basalelaki banzambe na bango. \s1 Tango ya Otinieli \p \v 7 Bana ya Isalaele basalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; babosanaki Yawe, Nzambe na bango, mpe basalelaki banzambe Bala mpe Ashera. \v 8 Yawe asilikelaki bana ya Isalaele, mpe akabaki bango na maboko ya Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami. Bana ya Isalaele basalaki mibu mwambe na se ya bokonzi na ye. \v 9 Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe, mpe Yawe abimiselaki bango mokangoli : Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, leki ya Kalebi. Mpe Otinieli abikisaki bana ya Isalaele. \v 10 Molimo na Yawe ayaki likolo na ye mpe akomaki elombe kati na bana ya Isalaele ; bongo akendeki kobunda bitumba. Yawe akabaki Kushani-Rishetayimi, mokonzi ya Arami, na maboko ya Otinieli ; mpe Otinieli alongaki ye. \v 11 Sima na yango, mokili ekomaki na kimia mibu tuku minei kino tango Otinieli, mwana mobali ya Kenazi, akufaki. \s1 Tango ya Ewudi \p \v 12 Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe. Likolo ya mabe yango, Yawe apesaki Egiloni, mokonzi ya Moabi, bokonzi na likolo ya bana ya Isalaele. \v 13 Egiloni asanganaki na bato ya Amoni mpe ya Amaleki, bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele, bongo babotolaki engumba ya nzete ya Mbila. \v 14 Bana ya Isalaele bazalaki na se ya bokonzi ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mibu zomi na mwambe. \p \v 15 Bana ya Isalaele bagangaki lisusu epai na Yawe, mpe Yawe apesaki bango mokangoli moko na kombo Ewudi, mwana mobali ya Gera, ya libota ya Benjame. Ewudi azalaki kosalela loboko ya mwasi. Bana ya Isalaele batindaki ye epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, mpo na kopesa ye mpako. \v 16 Ewudi amisalelaki mopanga ya minu mibale, ya ndambo ya metele na molayi. Akangaki yango na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe abombaki yango na se ya bilamba na ye. \v 17 Apesaki mpako epai ya Egiloni, mokonzi ya Moabi, oyo azalaki moto ya nzoto minene. \v 18 Tango Ewudi asilisaki kopesa mpako, azongisaki bato nyonso oyo bamemaki yango. \v 19 Kasi tango akomaki na esika ya banzambe ya bikeko oyo basala na mabanga, pembeni ya Giligali, azongaki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye : \pi1 — Mokonzi, nazali na sango ya sekele mpo na yo. \p Mokonzi azongisaki : \pi1 — Kimia ! \p Mpe bato nyonso oyo bazalaki pembeni na ye babimaki libanda. \v 20 Bongo Ewudi apusanaki pene ya mokonzi Egiloni oyo azalaki ya kovanda na shambre ya likolo ya ndako na ye ya kopema. Alobaki na ye : \pi1 — Nazali na liloba ya koyebisa yo kowuta na Nzambe. \p \v 21 Ewudi asembolaki loboko na ye ya mwasi, akamataki mopanga oyo abombaki na loketo na ye, na ngambo ya loboko ya mobali, mpe atubaki yango na libumu ya mokonzi. \v 22 Boye, ezala esimbelo ya mopanga, nyonso ekotaki, mpe mafuta ezipaki mopanga ; pamba te Ewudi atikaki mopanga yango kati na libumu ya mokonzi. \v 23 Ewudi abimaki na sima ya ndako, akangaki bikuke ya shambre ya likolo sima na ye mpe atiaki yango bibende. \p \v 24 Tango akendeki, basali ya mokonzi bayaki na esika yango mpe bamonaki ete bikuke ya shambre ya likolo ya kokangama. Balobaki : \pi1 — Tango mosusu mokonzi azali na zongo inene oyo ezali kati na shambre, na kati ya ndako. \p \v 25 Basali bazelaki mingi, kino ekomaki kosala bango soni. Lokola mokonzi azalaki kaka kofungola te bikuke ya shambre ya likolo, bazwaki fungola mpe bafungolaki bango moko. Mpe tala, bamonaki nkolo na bango azali ya kokufa, alala na se. \v 26 Wana balekisaki bongo ngonga, Ewudi abimaki ; alekaki na esika oyo ezalaki na banzambe oyo basala na mabanga mpe akimaki na Seira. \v 27 Tango akomaki kuna, abetaki kelelo na mokili ya bangomba ya Efrayimi, mpe bana ya Isalaele bakitaki elongo na ye, longwa na likolo na ngomba, mpe amitiaki na liboso mpo na kotambolisa bango. \v 28 Alobaki na bango : \pi1 — Bolanda ngai, pamba te Yawe akabi Moabi, monguna na bino, na maboko na bino. \p Balandaki ye mpe babotolaki bato ya Moabi bisika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Bapesaki lisusu ata na moto moko te nzela ya kokatisa mayi. \v 29 Na mokolo wana, babomaki bato ya Moabi pene nkoto zomi ; bango nyonso bazalaki bambinga mpe bato ya makasi, ata moto moko te abikaki. \v 30 Na mokolo wana, bana ya Isalaele balembisaki bato ya Moabi, mpe mokili ezalaki na kimia mibu tuku mwambe. \s1 Tango ya Shamagari \p \v 31 Sima na Ewudi, Shamagari, mwana mobali ya Anati, ayaki mpe abomaki bato ya Filisitia nkama motoba na nzela ya nzete ya moke oyo batambolisaka na yango bangombe. Ye mpe abikisaki Isalaele. \c 4 \s1 Tango ya Debora mpe Baraki \p \v 1 Sima na kufa ya Ewudi, bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe. \v 2 Yawe akabaki bango lisusu na maboko ya Yabini, mokonzi ya Kanana, oyo azalaki kovanda na Atsori. Sisera, mokonzi ya mampinga na ye ya basoda, azalaki kovanda na Arosheti-Goyimi. \v 3 Yabini azalaki na bashar nkama libwa ya bibende, mpe anyokolaki makasi bana ya Isalaele mibu tuku mibale. Bongo bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi. \p \v 4 Na tango wana, Debora, mwasi mosakoli, mwasi ya engumba Lapidoti, azalaki kokamba Isalaele. \v 5 Azalaki kosambisa na se ya nzete ya mbila ya Debora, oyo ezalaki na kati ya Rama mpe Beteli, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Bana ya Isalaele bazalaki koya epai na ye mpo na kosambisama. \v 6 Mokolo moko, abengisaki Baraki, mwana mobali ya Abinoami, moto ya Kedeshi ya Nefitali, mpe alobaki na ye : \pi1 — Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesi yo mitindo : « Kende, kamata elongo na yo bato nkoto zomi ya mabota ya Nefitali mpe ya Zabuloni, mpe mema bango na nzela oyo ekenda na ngomba Tabori. \v 7 Nakomema Sisera, mokonzi ya basoda ya Yabini, na mayi moke ya Kishoni elongo na bashar mpe basoda na ye, mpe nakokaba ye na maboko na yo. » \p \v 8 Baraki azongiselaki Debora : \pi1 — Soki okokende elongo na ngai, wana nakokende ; kasi soki okokende na ngai te, wana ngai mpe nakokende te. \p \v 9 Debora alobaki na ye : \pi1 — Malamu, nakokende elongo na yo. Kasi yeba ete, na nzela oyo ozali kokende, lokumu ekozala ya yo te, pamba te Yawe akokaba Sisera na maboko ya mwasi. \p Boye, Debora akendeki elongo na Baraki, na mboka Kedeshi. \v 10 Kuna na Kedeshi, Baraki abengisaki bato ya mabota ya Zabuloni mpe ya Nefitali. Bato nkoto zomi balandaki ye, mpe Debora akendeki elongo na ye. \p \v 11 Kaka na mokolo wana, Eberi, moto ya Keni, akabwanaki na bato mosusu ya Keni, bakitani ya Obabi, semeki ya Moyize. Mpe Eberi akendeki kino na terebente oyo ezali na Tsananimi, pembeni ya Kedeshi, mpo na kotelemisa ndako na ye ya kapo. \p \v 12 Tango bayebisaki Sisera ete Baraki, mwana mobali ya Abinoami, amataki na likolo ya ngomba Tabori, \v 13 Sisera abengisaki, longwa na Arosheti-Goyimi, bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo, mpe asangisaki bashar nkama libwa ya bibende. Amemaki bango na mayi moke ya Kishoni. \v 14 Debora alobaki na Baraki : « Kende ! Ezali lelo nde mokolo oyo Yawe akokaba Sisera na maboko na yo. » \p Baraki akitaki na ngomba Tabori, mpe bato nkoto zomi balandaki ye. \v 15 Wana Baraki azalaki kokende, Yawe apanzaki, na nzela ya mopanga na Ye, Sisera, bashar na ye nyonso mpe mampinga na ye ya basoda. Sisera asundolaki shar na ye mpe akimaki na makolo. \v 16 Kasi Baraki alandaki bashar mpe mampinga kino na Arosheti-Goyimi. Mampinga nyonso ya basoda ya Sisera ekufaki na mopanga, ata moto moko te abikaki. \p \v 17 Nzokande, Sisera akimaki na makolo kino na ndako ya kapo ya Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni ; pamba te boyokani ya malamu ezalaki kati na Yabini, mokonzi ya Atsori, mpe libota ya Eberi, moto ya Keni. \v 18 Yaeli abimaki mpo na kokutana na Sisera mpe alobaki na ye : \pi1 — Yaka, nkolo na ngai ; kimela epai na ngai, kobanga te. \p Sisera akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli, mpe Yaeli azipaki ye bulangeti. \v 19 Sisera alobaki na Yaeli : \pi1 — Nabondeli yo, pesa ngai mayi mpo ete namela ; nazali na posa ya mayi. \p Yaeli afungolaki mbeki etonda na miliki ya mayi, mpe amelisaki ye yango. Sima, azipaki ye lisusu bulangeti. \v 20 Sisera alobaki na Yaeli : \pi1 — Telema na ekuke ya ndako ya kapo. Soki moto ayei kotuna yo : « Moto azali awa ? » Zongisa : « Te ! » \p \v 21 Kasi wana Sisera alalaki pongi makasi mpo ete alembaki, Yaeli, mwasi ya Eberi, akamataki pike ya ndako ya kapo mpe azwaki marto ; akotaki malembe pembeni na ye, abetaki ye pike na litoyi, mpe pike yango etobolaki moto na ye kino ekotaki na mabele ; mpe Sisera akufaki. \p \v 22 Wana Baraki azalaki nanu kolanda Sisera, Yaeli abimaki mpo na kokutana na ye. Alobaki na Baraki : « Yaka, nakolakisa yo moto oyo ozali koluka. » \p Baraki akotaki na ndako ya kapo ya Yaeli mpe amonaki Sisera ya kokufa, alala na mabele, mpe pike kati na litoyi na ye. \p \v 23 Mokolo wana, Nzambe akitisaki liboso ya bana ya Isalaele, Yabini, mokonzi ya Kanana. \v 24 Bana ya Isalaele bakomaki makasi koleka Yabini, mokonzi ya Kanana, kino babomaki ye. \c 5 \p \v 1 Na mokolo wana, Debora mpe Baraki, mwana mobali ya Abinoami, bayembaki nzembo oyo : \q1 \v 2 Lokola na Isalaele, bakonzi batambolaki liboso, \q2 mpe bato bamipesaki mobimba na bitumba, \q2 tika ete bokumisa Yawe ! \q1 \v 3 Bino bakonzi, boyoka ! \q2 Bino bakambi, boyoka malamu ! \q1 Nalingi koyembela Yawe, \q2 nalingi koyemba nzembo mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. \q1 \v 4 Eh Yawe, tango obimaki na Seiri, \q2 tango ozalaki kotambola wuta na mokili ya Edomi, \q1 mabele eninganaki, likolo enyangwanaki, \q2 mapata esopaki mayi. \q1 \v 5 Bangomba eninganaki liboso ya Yawe, \q2 mpe ngomba Sinai, liboso ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. \q1 \v 6 Na mikolo ya Shamagari, mwana mobali ya Anati ; \q2 mpe na mikolo ya Yaeli, nzela etikalaki lisusu na bato te, \q2 bato ya mobembo batambolaki na nzela ya nyoka-nyoka. \q1 \v 7 Bamboka nyonso ya mike-mike ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te, \q2 ezalaki lisusu na bato te kino ngai Debora natelemaki, \q2 kino natelemaki lokola mama kati na Isalaele. \q1 \v 8 Tango baponaki banzambe ya sika, \q2 bitumba mpe ekomaki na bikuke ya engumba, \q1 kasi ata nguba moko te to likonga moko te \q2 emonanaki kati na basoda nkoto tuku minei kati na Isalaele. \q1 \v 9 Motema na ngai ezali elongo na bakambi ya Isalaele, \q2 elongo na ba-oyo bamipesaki mobimba na bitumba. \q2 Bokumisa Yawe ! \q1 \v 10 Bino oyo bozali kotambola likolo ya ba-ane ya pembe, \q2 bino oyo bozali kovanda likolo ya batapi, \q2 bino oyo bozali kotambola na nzela, bokanisa ! \q1 \v 11 Bokumisa mingongo ya bayembi, \q2 na bisika oyo batokaka mayi, pene ya bitima ya mayi ; \q1 kuna, mingongo ya bakaboli mayi ezali kosanzola \q2 misala ya bosembo ya Yawe, \q1 misala na Ye ya bosembo na bamboka mike nyonso ya Isalaele. \q2 Bato ya Yawe bakiti kino na bikuke ya engumba. \q1 \v 12 Debora, lamuka ! Lamuka ! \q2 Lamuka, lamuka, yemba nzembo ya bitumba ! \q1 Eh Baraki, telema, zongisa bakangami na yo ; \q2 mwana mobali ya Abinoami ! \q1 \v 13 Ndambo ya batikali bakiti epai ya balongi, \q2 bato ya Yawe bakiti mpo na ngai \q2 kati na bilombe ya bitumba. \q1 \v 14 Bato ya Amaleki bawutaki na Efrayimi. \q2 Sima na yo, Benjame akitaki elongo na mampinga. \q1 Bakonzi ya mampinga babimelaki na Makiri, \q2 mpe bato oyo basimbaka lingenda ya bokonzi babimelaki na Zabuloni. \q1 \v 15 Bakambi ya Isakari bazalaki elongo na Debora ; \q2 ndenge moko lokola Baraki, Isakari alandaki ye mbangu \q2 na makolo kino na lubwaku. \q1 Kasi kati na libota ya Ribeni, \q2 mitema etondaki mingi na makanisi. \q1 \v 16 Mpo na nini avandi kati na lopango ? \q2 Ezali mpo na kaka koyoka kolela ya bibwele ? \q1 Kati na libota ya Ribeni, bazali bobele kolekisa \q2 tango pamba na kokanisa. \q1 \v 17 Galadi atikali na ngambo mosusu ya Yordani. \q2 Mpo na nini Dani azali kowumela kati na masuwa ? \q1 Aseri atikali pembeni ya ebale, \q2 avandi pembeni ya libongo na ye. \q1 \v 18 Bato ya Zabuloni bateki milimo na bango na kufa, \q2 bato ya Nefitali, na basonge ya bangomba, \q2 kuna na esika ya bitumba. \q1 \v 19 Bakonzi oyo bazali banguna bayaki \q2 mpe babundisaki biso ; \q1 bakonzi ya Kanana babundisaki biso na mboka Taanaki, \q2 pene ya mayi ya Megido, \q2 kasi bamemaki te bomengo ya bitumba, ata palata. \q1 \v 20 Wuta na likolo, minzoto ebundaki ; \q2 na nzela na yango oyo etambolaka, minzoto ebundisaki Sisera. \q1 \v 21 Mayi moke ya Kishoni ememaki bango, \q2 mayi moke ya tango ya kala, mayi moke ya Kishoni. \q2 Tika ete molimo na ngai etambola na nguya ! \q1 \v 22 Makolo ya bampunda enyataki mabele, \q2 na kopumbwa na mbangu makasi, \q2 na kolanda bankolo na yango, bato na nguya. \q1 \v 23 Bolakela mboka ya Merozi mabe, elobi anjelu ya Yawe. \q2 Bolakela, bolakela mabe bato oyo bavandi kuna ! \q1 Pamba te bayei te kosunga Yawe ; \q2 bayei te kosunga bilombe ya bitumba ! \q1 \v 24 Tika ete Yaeli, mwasi ya Eberi, moto ya Keni, \q2 apambolama kati na basi nyonso ! \q1 Tika ete apambolama kati na basi nyonso \q2 oyo bazali kovanda na se ya ndako ya kapo. \q1 \v 25 Sisera asengaki mayi, kasi ye apesaki miliki ; \q2 kati na kopo ya bato ya lokumu, apesaki ye miliki ya kilo. \q1 \v 26 Na loboko na ye ya mwasi, azwaki pike ya nzete ; \q2 mpe na loboko na ye ya mobali, marto ya basali. \q1 Abetaki Sisera mpe apanzaki ye moto, \q2 atobolaki ye litoyi mpe apanzaki yango nyonso. \q1 \v 27 Sisera akweyaki na makolo na ye, alembaki ; \q2 akweyaki na makolo na ye mpe akufaki. \q1 \v 28 Mama ya Sisera abandaki kotala na lininisa, \q2 na sima ya bibende, mpe abandaki koganga : \q1 « Mpo na nini shar na ye ezali kowumela boye ? \q2 Mpo na nini bashar na ye ezali koya malembe ? » \q1 \v 29 Moko kati na basi ya mayele mpe ya lokumu ayanoli ye, \q2 mpe ye moko amilobeli : \q1 \v 30 « Ezali te mpo bazwi mpe bakaboli bomengo ya bitumba : \q2 Elenge mwasi moko to bilenge basi mibale mpo na soda moko, \q1 bilamba ya langi mpo na Sisera, bilamba, bilamba ya langi, \q2 mpe bilamba oyo batia bililingi, mpo na balongi ? » \q1 \v 31 Yawe, tika ete banguna na Yo nyonso bakufa bongo ! \q2 Tika ete bato oyo balingaka Yo bangenga makasi \q2 lokola moyi ya midi ! \p Mokili ezalaki na kimia mibu tuku minei. \c 6 \s1 Tango ya Jedeon \p \v 1 Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe liboso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu sambo na maboko ya bato ya Madiani. \v 2 Lokola loboko ya bato ya Madiani ezalaki na nguya makasi likolo ya Isalaele, bana ya Isalaele babongisaki mabulu ya kokimela mpe bibombelo kati na mabanga, kuna na likolo ya bangomba. \v 3 Tango nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kolona bilanga na bango, bato ya Madiani, bato ya Amaleki mpe bato ya bikolo mosusu ya ngambo ya este, bazalaki koya kobundisa Isalaele. \v 4 Bazalaki kotonga milako na bango pene ya bana ya Isalaele, mpe bazalaki kobebisa bilanga na bango, kino pene ya Gaza. Bazalaki kotikela bana ya Isalaele ata eloko moko te ya kolia, ata meme to ntaba te, ata ngombe te, ata mpe ane te. \v 5 Bazalaki komata ebele lokola mabanki elongo na bibwele na bango mpe bandako na bango ya kapo. Ezalaki pasi mpo na kotanga motango ya bato mpe ya bashamo na bango ; bazalaki kokota na mokili ya Isalaele mpo na kobebisa yango nyonso. \p \v 6 Bato ya Madiani bakomisaki bana ya Isalaele babola makasi. Boye, bana ya Isalaele bagangaki epai na Yawe mpo ete asunga bango. \v 7 Tango bana ya Isalaele babelelaki Yawe mpo ete akangola bango wuta na maboko ya bato ya Madiani, \v 8 Yawe atindelaki bango mosakoli oyo alobaki na bango : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ngai nde nabimisaki bino na Ejipito, ndako ya bowumbu. \v 9 Nakangolaki bino wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe na maboko ya bato nyonso oyo banyokolaki bino ; nabenganaki bango liboso na bino mpe napesaki bino mokili na bango. \v 10 Nalobaki na bino : Nazali Yawe, Nzambe na bino ; bogumbamela nzambe ya bato ya Amori te, kati na mokili oyo bozali kovanda. Kasi boyokelaki Ngai te. › » \p \v 11 Anjelu ya Yawe ayaki mpe avandaki na se ya terebente oyo ezalaki na Ofira, kati na mabele ya Joasi, moto ya libota ya Abiezeri. Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azalaki kosangisa bambuma ya ble esika moko, na esika oyo basalaka masanga ya vino, mpo na kobomba yango liboso ya bato ya Madiani. \v 12 Anjelu ya Yawe abimelaki Jedeon mpe alobaki na ye : \pi1 — Yawe azali elongo na yo, elombe ya bitumba. \p \v 13 Jedeon azongisaki : \pi1 — Ah nkolo, soki Yawe azali elongo na biso, mpo na nini makambo nyonso oyo ezali kokomela biso ? Wapi makambo nyonso ya kokamwa oyo bakoko na biso bazalaki koyebisa biso tango bazalaki koloba ete Yawe abimisaki biso na Ejipito ? Sik’oyo, Yawe atiki biso mpe asundoli biso na maboko ya bato ya Madiani. \p \v 14 Yawe abalukaki epai na ye mpe alobaki : \pi1 — Kende, salela makasi oyo ozali na yango mpe bikisa bana ya Isalaele na maboko ya bato ya Madiani. Boni, ezali Ngai te nde natindi yo ? \p \v 15 Jedeon azongisaki : \pi1 — Ah nkolo na ngai, ndenge nini ngai nakoki kobikisa bana ya Isalaele ? Kati na Manase, libota na ngai nde ezangi makasi koleka, mpe ngai nazali mwana ya suka kati na ndako ya tata na ngai. \p \v 16 Yawe alobaki na ye : \pi1 — Nakozala elongo na yo, mpe okoboma bato ya Madiani lokola moto moko. \p \v 17 Jedeon alobaki : \pi1 — Solo, soki nazwi ngolu na miso na Yo, pesa ngai elembo oyo ekolakisa solo ete Yo Yawe nde ozali kosolola na ngai. \v 18 Nabondeli Yo, kolongwa na esika oyo te kino nakozonga awa na likabo na ngai mpo ete nabonza yango liboso na Yo. \p Yawe alobaki : \pi1 — Nakozela kino okozonga. \p \v 19 Jedeon azongaki epai na ye, abongisaki mwana ntaba, azwaki kilo tuku misato ya farine, asalaki na yango mapa oyo ezanga levire, atiaki mapa yango na kitunga, mpe atiaki elubu na nzungu. Amemaki yango mpe apesaki nyonso epai na Anjelu na Nzambe, oyo azalaki na se ya terebente. \p \v 20 Anjelu na Nzambe alobaki na ye : \pi1 — Kamata nyama mpe mapa oyo ezanga levire, tia yango na likolo ya libanga oyo mpe sopela yango elubu. \p Jedeon asalaki yango. \p \v 21 Bongo Anjelu ya Yawe asembolaki nzete oyo asimbaki na loboko na Ye, mpe songe na yango etutaki nyama mpe mapa oyo ezanga levire. Moto ebimaki wuta na libanga mpe ezikisaki nyama mpe mapa. Anjelu ya Yawe alimwaki na miso na ye. \v 22 Tango Jedeon asosolaki ete Ye oyo azalaki elongo na ye azali Anjelu ya Yawe, agangaki : « Nkolo Yawe, mawa na ngai ! Pamba te namoni Anjelu ya Yawe, miso na miso. » \p \v 23 Kasi Yawe alobaki na ye : \pi1 — Zala na kimia ! Kobanga te. \p \v 24 Bongo Jedeon atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abengaki yango « Yawe apesaka kimia. » Etumbelo yango ezali kino na mokolo ya lelo kati na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri. \v 25 Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon : \pi1 — Kamata ngombe ya mobali ya mibu sambo, na etonga ya bibwele ya tata na yo. Buka etumbelo ya nzambe Bala, oyo ezali ya tata na yo, mpe kata ekeko ya Ashera, oyo ezali pembeni na yango. \v 26 Tonga etumbelo ya malamu mpo na Yawe, Nzambe na yo, na songe ya ngomba oyo. Na sima, kamata ngombe ya mobali mpe bonza yango nyonso lokola mbeka ya kotumba, na moto ya koni ya ekeko ya Ashera, oyo okataki. \p \v 27 Jedeon akamataki basali na ye zomi mpe asalaki ndenge Yawe alobaki na ye. Lokola azalaki kobanga libota na ye mpe bato ya engumba na ye, asalaki yango na butu, kasi na moyi te. \v 28 Na tongo-tongo, tango bato ya engumba balamukaki, bamonaki ete etumbelo ya nzambe Bala epanzani, ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango ekatami ; mpe bamonaki lisusu ete babonzi ngombe ya mobali na likolo ya etumbelo oyo batongi sika. \v 29 Balobanaki : « Nani asali makambo ya boye ? » \p Wana bazalaki kotuna mpo na koluka koyeba, bayebisaki bango ete ezali Jedeon, mwana mobali ya Joasi, moto asalaki bongo. \v 30 Bato ya engumba balobaki na Joasi : \pi1 — Bimisa mwana na yo ya mobali. Asengeli kokufa. Pamba te ye moto apanzi etumbelo ya nzambe Bala mpe akati ekeko ya Ashera oyo ezalaki pembeni na yango. \p \v 31 Kasi Joasi azongiselaki bango nyonso oyo batelemelaki ye : \pi1 — Boni, bino nde bokolobela Bala ? Bino nde bokobundela ye ? Moto nyonso oyo akobundela ye akokufa liboso ete tongo etana. Soki ye Bala azali nzambe, tika ete amibundela ye moko mpo ete babuki etumbelo na ye. \p \v 32 Kobanda mokolo wana, mpo ete Jedeon apanzaki etumbelo ya Bala, bakomaki kobenga ye « Yerubali » oyo elingi koloba : Tika ete Bala amibundela ye moko. \s1 Jedeon asengi elembo \p \v 33 Na tango wana, bato ya Madiani, ya Amaleki mpe bato ya ngambo ya este basanganaki elongo, bakatisaki ngambo ya Yordani mpe batongaki molako na bango na lubwaku ya Jizireyeli. \v 34 Kasi Molimo na Yawe alataki Jedeon, mpe abetaki kelelo mpo na kobengisa bato ya libota ya Abiezeri na tina ete balanda ye. \v 35 Jedeon atindaki bantoma na etuka nyonso ya Manase ; mpe bato ya Manase basanganaki mpo na kozala sima na ye. Atindaki lisusu bantoma na libota ya Aseri, ya Zabuloni mpe ya Nefitali mpo ete bamata mpe bakutana na ye. \p \v 36 Jedeon alobaki na Nzambe : « Soki okobikisa Isalaele na nzela ya maboko na ngai lokola olakaki ngai, \v 37 nakotanda bapwale ya meme na esika oyo batutaka bambuma ya ble. Soki mamwe emonani kaka na likolo ya bapwale kasi mabele etikali ya kokawuka, wana nakoyeba ete okobikisa Isalaele na nzela ya loboko na ngai ndenge olobaki. » \v 38 Mpe esalemaki bongo. Mokolo oyo elandaki, Jedeon alamukaki na tongo-tongo, akamolaki bapwale, ebimisaki mayi mpe etondisaki sani mobimba. \p \v 39 Boye, Jedeon ayebisaki Nzambe : « Kosilikela ngai te, pesa ngai nzela ete nasenga lisusu elembo moko. Ya mbala oyo, sala ete bapwale ezala ya kokawuka, kasi mabele epola na mamwe. » \p \v 40 Nzambe asalelaki ye bongo, na butu yango : bapwale etikalaki ya kokawuka, kasi mabele ya pembeni epolaki na mamwe. \c 7 \s1 Jedeon alongi bato ya Madiani \p \v 1 Na tongo-tongo, Yerubali, elingi koloba Jedeon, abimaki elongo na bato nyonso oyo balandaki ye mpe batongaki molako na bango pembeni ya etima ya mayi ya Arodi. Nzokande molako ya bato ya Madiani ezalaki na ngambo ya nor ya molako ya bana ya Isalaele, na lubwaku, pembeni ya ngomba moke ya More. \v 2 Yawe alobaki na Jedeon : « Bato oyo ozali na bango baleki ebele mpo na ngai kokaba bato ya Madiani na maboko na bango, noki te Isalaele akozwa lolendo na koloba : ‹ Loboko na ngai moko nde ebikisi ngai. › \v 3 Yango wana, loba na bato oyo : ‹ Tika ete moto nyonso oyo azali kolenga na kobanga azala mosika ya ngomba Galadi mpe azonga epai na ye. › » \p Boye, bato nkoto tuku mibale na mibale bazongaki epai na bango mpe nkoto zomi batikalaki. \v 4 Kasi Yawe alobaki na Jedeon : « Bato bazali kaka ebele. Kitisa bango nyonso na mayi, mpe kuna, nakomeka bango mpo na yo. Soki nalobi : ‹ Oyo akoki kokende na yo, ye nde asengeli kokende na yo. › Kasi soki nalobi : ‹ Oyo akoki te kokende na yo, ye asengeli te kokende na yo. › » \p \v 5 Boye, Jedeon akitisaki bato na mayi. Kuna, Yawe alobaki na ye : « Kabola bango : tia na ngambo moko, bato oyo bakomela mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa ; mpe tia na ngambo mosusu, bato oyo bakofukama, mpo na komela mayi. » \p \v 6 Bato nkama misato bazwaki mayi na maboko na bango mpo na komema yango na minoko na bango mpe komela yango na nzela ya lolemo ; bato nyonso oyo batikali bafukamaki mpo na komela mayi. \v 7 Yawe alobaki na Jedeon : « Nakobikisa bino na nzela ya bato nkama misato oyo bamelaki mayi na nzela ya lolemo lokola mbwa, mpe nakokaba bato ya Madiani na maboko na yo. Tika ete bato nyonso oyo batikali bazonga, moto na moto na esika na ye. » \p \v 8 Boye mibali yango nkama misato bazwaki biloko ya kolia mpe bakelelo ya bato mosusu. Mpe Jedeon azongisaki na bandako na bango, bana ya Isalaele oyo batikalaki. Nzokande, molako ya bato ya Madiani ezalaki na lubwaku, na se ya molako ya bana ya Isalaele. \s1 Ndoto ya soda ya Madiani \p \v 9 Na butu wana, Yawe alobaki na Jedeon : « Telema, kita mpo na kobundisa molako ya bato ya Madiani, pamba te napesi yango na maboko na yo. \v 10 Soki ozali kobanga kobunda, kita elongo na Pura, mosali na yo ya mobali, \v 11 mpe yoka maloba oyo bazali koloba. Boye okozwa makasi ya kobundisa bango. » \p Jedeon akitaki elongo na Pura, mosali na ye ya mobali, kino na liboso ya molako ya bitumba. \v 12 Bato ya Madiani, ya Amaleki mpe ya ngambo ya este bazalaki ya kopanzana kati na lubwaku, ebele lokola mabanki. Bashamo na bango ezalaki ebele koleka zelo ya ebale. \v 13 Jedeon akomaki na molako ya banguna na bango na tango kaka mobali moko ya Madiani azalaki kobeta lisolo ya ndoto na ye epai ya moninga na ye : \pi1 — Tala ndoto naloti : Namonaki lipa moko basala na bambuma ya orje ezali kobaluka kati na molako na biso mobimba, bongo lipa yango eyaki kotuta ndako ya kapo na makasi koleka. Ndako ya kapo ekweyaki mpe ebalukaki. \p \v 14 Moninga na ye azongisaki : \pi1 — Oyo ekoki kozala eloko mosusu te ! Ezali kaka mopanga ya Jedeon, mwana mobali ya Joasi, moto ya Isalaele. Solo, Nzambe akabi bato ya Madiani mpe molako mobimba na maboko na ye. \p \v 15 Tango Jedeon ayokaki ndoto mpe ndimbola na yango, afukamelaki Nzambe mpe atondaki Ye. Azongaki na molako ya Isalaele mpe agangaki : « Botelema, Yawe akabi molako ya bato ya Madiani na maboko na biso. » \v 16 Jedeon akabolaki basoda na ye nkama misato na biteni misato. Mpe apesaki na mobali moko na moko kelelo moko, mbeki moko oyo ezangi eloko na kati, singa ya mwinda mpe moto ya mbeki. \v 17 Na sima, apesaki bango mitindo oyo : « Bino nyonso, botala esika ngai nazali mpe bolanda ndenge ngai nakosala tango nakokoma pembeni ya molako ya banguna na biso. \v 18 Tango ngai mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ngai tokobeta kelelo, bino nyonso, na zingazinga ya molako, bokobeta mpe bakelelo na bino mpe bokoganga : ‹ Mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. › » \s1 Yawe alongisi Jedeon \p \v 19 Jedeon mpe mibali nkama moko oyo bazalaki na ye elongo, bakomaki pembeni ya molako, mwa tango moke liboso ete midi ya butu ekoka, wana bawutaki kotia bakengeli mosusu. Babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki oyo ezalaki na maboko na bango. \v 20 Biteni nyonso misato ya basoda babetaki bakelelo mpe babukaki bambeki. Na loboko na bango ya mwasi, basimbaki minda, mpe, na loboko ya mobali, bakelelo mpo na kobeta. Mpe bazalaki koganga : « Mopanga mpo na Yawe mpe mpo na Jedeon. » \v 21 Wana soda moko na moko ya Isalaele atelemaki na esika na ye zingazinga ya molako, banguna kati na molako bapotaki mbangu, bagangaki mpe bakimaki. \v 22 Tango bakelelo nkama misato ebetaki lisusu, Yawe asalaki ete, kati na molako mobimba, moto na moto atuba moninga na ye mopanga ; mpe bango nyonso bakimaki kino na Beti-Shita, na ngambo ya Tserera, mpe kino na ngambo ya Abele-Meola pembeni ya Tabati. \p \v 23 Bana ya Isalaele oyo bawutaki na Nefitali, na Aseri mpe na Manase basanganaki mpo na kobengana bato ya Madiani. \v 24 Jedeon atindaki bantoma kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi mpo na koloba : « Bokita mpo na kokutana na bato ya Madiani ; bokanga, liboso na bango, nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani. » Bana nyonso ya libota ya Efrayimi bakitaki mpe bakangaki nzela ya mayi kino na Beti-Bara mpe na Yordani. \v 25 Bakangaki bakonzi mibale ya bato ya Madiani : Orebi mpe Zeebi. Babomaki Orebi na libanga monene ya Orebi, mpe Zeebi na esika oyo bakamolaka vino ya Zeebi. Balandaki bato ya Madiani mpe bamemelaki Jedeon mito ya Orebi mpe ya Zeebi, kuna na ngambo ya Yordani. \c 8 \p \v 1 Mibali ya Efrayimi batunaki Jedeon : \pi1 — Bizaleli ya boye elakisi nini epai na biso ? Mpo na nini obengaki biso te tango okendeki kobundisa bato ya Madiani ? \p Mpe basilikelaki ye makasi. \p \v 2 Kasi Jedeon azongiselaki bango : \pi1 — Nasali nini oyo ekokani na oyo bino bosala ? Boni, ndambo ya bambuma ya vino oyo etikalaki na sima mpo ete Efrayimi abuka yango ezali kitoko te koleka bambuma ya vino ya liboso ya Abiezeri ? \v 3 Nzambe akabaki bakonzi ya bato ya Madiani, Orebi mpe Zeebi, na maboko na bino. Eloko nini ya lokumu ngai nasali oyo ekokani na oyo bino bosala ? \p Liloba oyo ekitisaki kanda na bango. \s1 Jedeon alongi bakonzi ya Madiani \p \v 4 Jedeon elongo na basoda na ye nkama misato bakomaki na Yordani mpe bakatisaki yango. Atako balembaki, bakobaki kaka kolanda bato ya Madiani. \v 5 Tango bakomaki na mboka Sukoti, Jedeon asengaki na bato ya mboka : \pi1 — Bopesa basoda na ngai mapa, pamba te basili kolemba na nzala. Nazali kolanda Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi ya Madiani. \p \v 6 Kasi bakonzi ya mboka Sukoti bazongiselaki ye : \pi1 — Boni, osili kozwa Zeba mpe Tsalimuna na se ya bokonzi na yo mpo ete biso topesa basoda na yo mapa ? \p \v 7 Jedeon alobaki : \pi1 — Lokola bolobi boye, tango Yawe akokaba, na maboko na ngai, Zeba mpe Tsalimuna, nakopasola-pasola misuni na bino na basende ya esobe mpe na singa ya nzube. \p \v 8 Wuta kuna, Jedeon amataki na mboka Penueli mpe asengaki epai ya bavandi na yango, ndenge kaka asengaki epai ya bato ya Sukoti. Kasi bato ya Penueli bazongiselaki ye ndenge kaka bato ya Sukoti basalaki. \p \v 9 Jedeon alobaki na bato ya Penueli : « Soki nakozonga na kimia mpe na bomoi, nakobuka ndako molayi na bino. » \p \v 10 Nzokande, Zeba mpe Tsalimuna bazalaki na Karikori elongo na basoda na bango, nkoto zomi na mitano. Oyo ezali nde motango nyonso ya basoda ya bato ya este oyo batikalaki. Pamba te basoda nkoto nkama moko na tuku mibale oyo bayebi kobunda na mopanga bakufaki. \v 11 Bongo, Jedeon akendeki na nzela ya bavandi ya bandako ya kapo, na ngambo ya este ya Noba mpe ya Yogibeka ; abetaki mampinga ya banguna na mopanga mpe alongaki bango tango bazalaki kokanisa ete bazali na kimia. \v 12 Zeba mpe Tsalimuna, bakonzi mibale ya Madiani, bakimaki ; kasi Jedeon alandaki mpe akangaki bango. Mpe apanzaki mampinga na bango nyonso. \s1 Etumbu ya Sukoti mpe ya Penueli \p \v 13 Jedeon, mwana mobali ya Joasi, azongaki wuta na bitumba na nzela ya ngomba Eresi. \v 14 Akangaki elenge mobali moko kati na mibali ya mboka Sukoti, mpe atunaki ye mituna. Boye, elenge mobali yango akomelaki ye bakombo ya bakambi mpe ya bampaka tuku sambo na sambo ya engumba. \v 15 Jedeon akendeki epai ya bato ya mboka Sukoti mpe alobaki na bango : « Tala Zeba mpe Tsalimuna oyo bofingelaki ngai na koloba : ‹ Osili kotia na se ya bokonzi na yo Zeba mpe Tsalumuna mpo ete biso topesa lipa na basoda na yo, oyo basili kolemba ? › » \p \v 16 Azwaki bampaka ya engumba Sukoti mpe abetisaki bango fimbu, na basende ya esobe mpe singa ya nzube. \v 17 Abukaki ndako molayi ya Penueli mpe abomaki mibali ya engumba. \p \v 18 Jedeon atunaki Zeba mpe Tsalimuna : \pi1 — Mibali oyo bobomaki na Tabori, bazalaki ndenge nini ? \p Bazongisaki : \pi1 — Bakokanaki na yo mpe bazalaki lokola bana ya bakonzi. \p \v 19 Jedeon alobaki na bango lisusu : \pi1 — Bato wana bazalaki bandeko na ngai ya mibali, bana ya mama na ngai penza. Na Kombo na Yawe, soki bobikisaki bango, ngai mpe nalingaki koboma bino te. \p \v 20 Mpe apesaki mitindo na Yeteri, mwana na ye ya liboso ya mobali : « Telema mpe boma bango ! » Kasi elenge mobali abimisaki mopanga na ye te, pamba te azalaki nanu elenge mpe azalaki na somo. \v 21 Zeba mpe Tsalimuna balobaki : « Telema mpe boma biso yo moko, pamba te likambo oyo ekoki na bato ya mitema makasi. » Boye, Jedeon atelemaki mpe abomaki bango. Akamataki bamedayi ya wolo oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango. \s1 Jedeon aboyi bokonzi \p \v 22 Bana ya Isalaele balobaki na Jedeon : \pi1 — Zala mokonzi na biso, yo moko, mwana na yo ya mobali mpe koko na yo ya mobali, pamba te obikisi biso na loboko ya bato ya Madiani. \p \v 23 Kasi Jedeon alobaki na bango : \pi1 — Nakozala mokonzi na bino te, ezala ata mwana na ngai ya mobali. Yawe nde akozala mokonzi na bino. \p \v 24 Jedeon abakisaki : \pi1 — Nalingi kosenga bino eloko moko : Kati na biloko oyo bino bosili kozwa na bitumba, tika ete moko na moko kati na bino apesa ngai eloko ya litoyi. Pamba te banguna na biso bazalaki kolata biloko ya matoyi mpo ete bazali bana ya Isimaeli. \p \v 25 Bana ya Isalaele bazongisaki : \pi1 — Tokopesa yango. \p Batandaki elamba na mabele, moko na moko abwakaki eloko na ye ya litoyi, oyo ewutaki na bomengo ya bitumba. \v 26 Biloko ya matoyi ya wolo, oyo Jedeon asengaki ezalaki ya bakilo pene tuku mibale, longola bamedayi ya wolo oyo ezalaki lokola sanza ya ndambo, biloko ya matoyi oyo ediembelaka, bilamba ya talo ya motane makasi oyo bakonzi ya Madiani balataki mpe mayaka oyo ezalaki na bakingo ya bashamo na bango. \v 27 Jedeon asalelaki yango ekeko oyo atiaki na Ofira, engumba na ye. Bana ya Isalaele bakomaki kokende kofukama liboso ya ekeko yango, mpe ekomaki motambo monene mpo na Jedeon mpe libota na ye. \s1 Suka ya bomoi ya Jedeon \p \v 28 Boye, bato ya Madiani bakitisamaki liboso ya bana ya Isalaele mpe batombolaki lisusu mito na bango te. Na tango nyonso oyo Jedeon azalaki na bomoi, mokili etikalaki na kimia mibu tuku minei. \v 29 Yerubali, mwana mobali ya Joasi, azongaki na ndako na ye mpe avandaki kuna. \v 30 Jedeon azalaki na bana tuku sambo oyo bawutaki na mokongo na ye, pamba te azalaki na basi ebele. \v 31 Makangu na ye, oyo azalaki kovanda na Sishemi, abotelaki ye mpe mwana mobali oyo bapesaki kombo « Abimeleki. » \p \v 32 Jedeon, mwana mobali ya Joasi, akufaki na kimobange ya esengo, mpe bakundaki ye kati na kunda ya Joasi, na Ofira, mboka ya libota ya Abiezeri. \p \v 33 Sima na kufa ya Jedeon, bana ya Isalaele bazongelaki kosambela banzambe Bala. Bakomisaki Bala-Beriti nzambe na bango. \v 34 Bana ya Isalaele babosanaki Yawe, Nzambe na bango, oyo akangolaki bango na maboko ya banguna na bango. \v 35 Bazongisaki ata bolamu moko te na libota ya Yerubali oyo elakisi Jedeon, mpo na bolamu nyonso oyo asalelaki Isalaele. \c 9 \s1 Tango ya Abimeleki \p \v 1 Abimeleki, mwana mobali ya Yerubali, akendeki na Sishemi epai ya banoko na ye mpe na ndako mobimba ya tata ya mama na ye. Alobaki : \v 2 « Botuna nanu motuna oyo epai ya bakambi nyonso ya engumba Sishemi : ‹ Eloko nini eleki malamu mpo na bino ? Bakamba bino na bana mibali tuku sambo ya Yerubali to na mwana mobali moko ? › Boyeba ete ngai mpe bino tozali makila moko mpe nzoto moko. » \p \v 3 Tango banoko na ye balobaki maloba nyonso ya Abimeleki epai ya bakambi nyonso ya Sishemi, mitema na bango nyonso ekendeki epai ya Abimeleki, pamba te balobaki ete azali ndeko na bango ya mobali. \v 4 Bapesaki ye mbongo ya bibende ya palata, tuku sambo oyo bazwaki na tempelo ya Bala-Beriti. Na mbongo yango, Abimeleki afutaki bato ya mobulu mpo na kolanda ye. \v 5 Akendeki na Ofira, na ndako ya tata na ye, mpe abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo, bana ya Yerubali na likolo ya libanga moko ya monene. Kasi Yotami, mwana mobali ya suka ya Yerubali, abikaki mpo ete amibombaki. \v 6 Bakambi nyonso ya Sishemi mpe ndako nyonso ya Milo basanganaki mpo na kokende kokomisa Abimeleki mokonzi, pembeni ya terebente, na likonzi ya mabanga kati na Sishemi. \s1 Lisese ya Yotami \p \v 7 Tango bayebisaki makambo yango epai ya Yotami, amataki likolo ya ngomba Garizimi mpe agangaki makasi : « Bino bakambi ya Sishemi, boyoka ngai, mpo ete Nzambe ayoka bino. \v 8 Mokolo moko, banzete ebimaki mpo na kokomisa moko kati na yango mokonzi. Elobaki na nzete ya Olive : ‹ Zala mokonzi na biso. › \v 9 Nzete ya Olive ezongiselaki yango : ‹ Natika penza mafuta na ngai, oyo bapesaka na yango Nzambe mpe bato lokumu, mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? › \v 10 Banzete elobaki na nzete ya figi : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. › \v 11 Nzete ya figi ezongiselaki yango : ‹ Natika penza elengi na ngai mpe mbuma na ngai ya kitoko mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? › \v 12 Banzete elobaki na nzete ya vino : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. › \v 13 Kasi nzete ya vino ezongiselaki yango : ‹ Natika penza vino na ngai, oyo esepelisaka banzambe mpe bato mpo ete nakende koningana-ningana na likolo ya banzete mosusu ? › \v 14 Sima, banzete nyonso elobaki na nzete ya nzube : ‹ Yaka mpe zala mokonzi na biso. › \v 15 Nzete ya nzube ezongiselaki yango : ‹ Soki bolingi penza kopakola ngai mafuta mpo ete nazala mokonzi na bino, boya kobombama na se ya pio na ngai. Soki bongo te, tika ete moto ebima na nzete ya nzube mpe ezikisa banzete ya sedele ya Libani ! › \p \v 16 Soki penza bosaleli na bosembo mpe na bosolo, wana bokomisi Abimeleki mokonzi ; soki bozalaki na motema malamu liboso ya Yerubali mpe libota na ye, soki bosalelaki ye kolanda misala malamu oyo ye asalelaki bino, \v 17 bobosana te ete tata na ngai abundelaki bino, andimaki ata kokufa mpo na kokangola bino wuta na loboko ya Madiani. \v 18 Kasi na mokolo ya lelo, botombokeli libota ya tata na ngai, bobomi bana na ye ya mibali tuku sambo, na libanga moko, mpe botie Abimeleki, mwana mobali ya mwasi mowumbu na ye, mokonzi ya bato ya Sishemi, pamba te azali ndeko na bino ya mobali. \v 19 Soki bosaleli na bosembo mpe bosolo liboso ya Yerubali mpe libota na ye, na mokolo ya lelo, tika ete Abimeleki asepela na bino, mpe bino bosepela na ye ! \v 20 Kasi soki ezali bongo te, tika ete moto ebima wuta na Abimeleki mpe etumba bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo ; mpe tika ete moto ebima wuta na bino bavandi ya Sishemi mpe ya Beti-Milo, mpe etumba Abimeleki ! » \p \v 21 Yotami abimaki, akendeki na Beri mpe avandaki kuna, pamba te azalaki kobanga Abimeleki, ndeko na ye ya mobali. \p \v 22 Sima, Abimeleki akambaki Isalaele mibu misato. \v 23 Nzambe atindaki molimo mabe kati na Abimeleki mpe bavandi ya Sishemi, mpe bavandi ya Sishemi basalelaki Abimeleki likita. \v 24 Nzambe asalaki bongo mpo na kozongisa mabe na mabe na oyo basalaki tango babomaki bana mibali tuku sambo ya Yerubali, mpo ete makila na bango etangama na moto ya ndeko na bango ya mobali, Abimeleki, mpe na mito ya bato ya Sishemi oyo basungaki ye mpo na koboma bandeko na ye ya mibali. \v 25 Bavandi ya Sishemi batielaki Abimeleki motambo na likolo ya bangomba : batiaki bato na esika ya kobombama mpo na kobotola biloko epai ya baleki nzela nyonso oyo bazalaki koleka pene na bango. Mpe bamemelaki Abimeleki sango yango. \p \v 26 Nzokande Gali, mwana mobali ya Ebedi, akendeki na Sishemi, elongo na bandeko na ye ya mibali ; mpe bato ya Sishemi batielaki ye motema. \v 27 Na tango ya kobuka bambuma ya vino, bato ya Sishemi bakendeki na bilanga, bakamolaki vino mpe basalaki feti monene kati na tempelo ya nzambe na bango. Wana bazalaki kolia mpe komela, balakelaki Abimeleki mabe. \v 28 Bongo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki : « Abimeleki nde nani liboso ya Sishemi mpo ete biso bato ya Sishemi tosalela ye ? Boni, azali mwana mobali ya Yerubali te ? Zebuli azali molobeli na ye te ? Bosalela bato ya Amori, tata ya Sishemi ! Kasi mpo na nini tosalela Abimeleki ? \v 29 Oh soki kaka nazalaki kokamba bato oyo, mbele nalingaki kobengana Abimeleki, mpe nalingaki koloba na ye : ‹ Bakisa lisusu makasi ya mampinga na yo, mpe yaka tobunda. › » \p \v 30 Tango Zebuli, moyangeli ya engumba, ayokaki makambo oyo Gali, mwana mobali ya Ebedi, alobaki, asilikaki makasi. \v 31 Atindaki bantoma na nkuku epai ya Abimeleki mpo na koloba na ye : « Gali, mwana mobali ya Ebedi, mpe bandeko na ye ya mibali bayaki na Sishemi, mpe bazali kotindika bato ya engumba mpo ete batombokela yo. \v 32 Sik’oyo telema, na butu, yo elongo na bato na yo ; bokende kovanda kati na elanga, na esika ya kobombama. \v 33 Bongo, na tongo-tongo, wana moyi ezali kobima, okokende mpe okobundisa engumba. Tango Gali elongo na bato na ye nyonso bakobima mpo na kokutana na yo, sala nyonso oyo loboko na yo ekoki kosala. » \p \v 34 Na butu, Abimeleki elongo na mampinga na ye nyonso batelemaki, bakabwanaki na biteni minei mpe bakendeki kovanda kati na esika ya kobombama, pene ya Sishemi. \v 35 Tango Gali, mwana mobali ya Ebedi, abimaki mpe atelemaki na ekuke ya engumba, Abimeleki elongo na basoda na ye babimaki na esika oyo babombamaki. \v 36 Tango Gali amonaki bato, alobaki na Zebuli : \pi1 — Tala, bato bazali kokita wuta na likolo na bangomba. \p Kasi Zebuli alobaki na ye : \pi1 — Oyo ozali komona lokola bato, ezali nde bililingi ya bangomba. \p \v 37 Kasi Gali alobaki lisusu : \pi1 — Tala, bato bazali kokita elongo na basoda wuta na likolo ya ngomba ya kati-kati ya engumba, mpe bamosusu bazali koya na nzela ya terebente ya bamoni makambo. \p \v 38 Zebuli alobaki na Gali : \pi1 — Sik’oyo, tia lisusu monoko ! Mpe loba lisusu : « Abimeleki nde nani mpo ete tosalela ye ? » Ezali te bato oyo yo otiolaki ? Kende sik’oyo kobunda ! \p \v 39 Boye, Gali amemaki bavandi ya Sishemi mpe abundisaki Abimeleki. \v 40 Abimeleki alandaki Gali, mpe Gali akimaki liboso ya Abimeleki, mpe bato ebele penza bakufaki kino na ekotelo ya ekuke. \v 41 Abimeleki avandaki na Aruma, mpe Zebuli abenganaki Gali elongo na bandeko na ye ya mibali mpo ete bavanda lisusu te na Sishemi. \s1 Abimeleki abengani Sishemi \p \v 42 Mokolo oyo elandaki, bato ya Sishemi babimaki mpe bakendeki na bilanga. Bato bamemaki sango epai ya Abimeleki. \v 43 Abimeleki azwaki bato na ye mpe akabolaki bango na biteni misato ya basoda, mpe atiaki bango kati na bilanga, na esika ya kobombama. Tango amonaki bato kobima longwa na engumba, atelemaki mpo na kobundisa bango. \v 44 Nzokande, tango Abimeleki mpe masanga ya mampinga oyo bazalaki elongo na ye bakendeki na lombangu mpe batelemaki na ekuke ya engumba, masanga mibale mosusu ya mampinga balandaki bato kino na bilanga mpe babomaki bango nyonso. \v 45 Abimeleki abundisaki engumba mokolo mobimba, abotolaki engumba yango mpe abomaki bato oyo bazalaki kuna. Bongo abebisaki engumba mpe asopelaki yango mungwa. \v 46 Tango bavandi nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bayokaki makambo yango, bakendeki kobombama kati na libulu ya mabanga ya tempelo ya Beriti, nzambe na bango. \v 47 Bamemelaki Abimeleki sango ete bavandi ya ndako molayi ya Sishemi basangani wana. \v 48 Abimeleki elongo na bato na ye nyonso bamataki na ngomba Tsalimoni. Abimeleki azwaki epasola mpe akataki mwa bitape ya nzete, amemaki yango na mapeka na ye mpe alobaki na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : « Oyo bomoni ngai kosala, bino mpe bosala bongo na lombangu. » \v 49 Boye bato nyonso bakataki, moto na moto etape na ye ya nzete. Balandaki Abimeleki, batiaki bitape ya nzete na libulu ya mabanga mpe batumbaki libulu yango ya mabanga elongo na bato nyonso oyo bazalaki kati na yango. Boye bato nyonso ya ndako molayi ya Sishemi bakufaki : bato pene nkoto moko, mibali mpe basi. \s1 Kufa ya Abimeleki \p \v 50 Sima na yango, Abimeleki akendeki na Tebesi, azingelaki mpe abotolaki yango. \v 51 Nzokande, ezalaki na ndako moko ya molayi mpe ya makasi kati na engumba. Bavandi nyonso, mibali mpe basi, bakimelaki kuna ; bakangaki ekuke sima na bango mpe bamataki na likolo ya ndako yango. \v 52 Abimeleki ayaki kino na ndako molayi mpo na kobundisa yango, mpe apusanaki kino na ekuke ya ndako yango mpo na kotumba yango. \v 53 Na tango yango, mwasi moko abwakaki libanga oyo banikelaka ble na moto ya Abimeleki mpe epanzaki ye moto. \v 54 Abimeleki abengaki na lombangu elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe alobaki na ye : « Bimisa mopanga na yo mpe boma ngai mpo baloba te na tina na ngai : ‹ Mwasi moko abomaki ye. › » Boye, elenge mobali atobolaki ye mopanga mpe akufaki. \v 55 Tango bana ya Isalaele bamonaki ete Abimeleki akufi, bazongaki moto na moto epai na ye. \p \v 56 Boye, Nzambe azongiselaki Abimeleki mabe oyo asalaki tata na ye tango abomaki bandeko na ye ya mibali tuku sambo. \v 57 Nzambe azongiselaki bato ya Sishemi mabe nyonso oyo basalaki. Ezali ndenge wana nde elakeli mabe oyo Yotami, mwana mobali ya Yerubali, asakolaki ekokisamaki. \c 10 \s1 Tango ya Tola \p \v 1 Sima na kufa ya Abimeleki, ezalaki Tola, mwana mobali ya Puwa, mwana mobali ya Dodo, moto ya Isakari, nde atelemaki mpo na kobikisa Isalaele. Azalaki kovanda na Shamiri, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi. \v 2 Akambaki Isalaele mibu tuku mibale na misato ; sima na yango, akufaki, mpe bakundaki ye na Shamiri. \s1 Tango ya Yairi \p \v 3 Yairi, moto ya Galadi, akitanaki na Tola mpe akambaki Isalaele mibu tuku mibale na mibale. \v 4 Azalaki na bana mibali tuku misato oyo bazalaki kotambola likolo ya ba-ane, mpe bazalaki na bamboka tuku misato kati na Galadi. Kino na mokolo ya lelo, babengaka yango « Bamboka ya Yairi. » \v 5 Yairi akufaki, mpe bakundaki ye na Kamone. \s1 Bato ya Amoni babundisi Isalaele \p \v 6 Bana ya Isalaele basalaki lisusu makambo mabe na miso ya Yawe ; basalelaki banzambe Bala, Asitarite, mpe banzambe ya Siri, ya Sidoni, ya Moabi, ya Amoni mpe ya Filisitia. Basundolaki Yawe mpe basalelaki Ye lisusu te. \v 7 Boye, kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe Yawe akabaki bango na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya bato ya Amoni. \v 8 Mibu zomi na mwambe, banyokolaki bana nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na ngambo mosusu ya Yordani, mokili ya bato ya Amori, kati na Galadi. \v 9 Bato ya Amoni mpe bakatisaki na ngambo ya Yordani mpo na kobundisa libota ya Yuda, ya Benjame mpe ya Efrayimi. Boye, Isalaele akomaki na pasi mingi. \v 10 Bana ya Isalaele bagangaki epai ya Yawe : \pi1 — Tosalaki masumu na miso na Yo, pamba te tosundolaki Yo, Nzambe na biso, mpe tosalelaki banzambe Bala. \p \v 11 Yawe azongiselaki bana ya Isalaele : \pi1 — Boni, nabikisaki bino te na maboko ya bato ya Ejipito, ya Amori, ya Amoni mpe ya Filisitia ? \v 12 Tango bato ya Sidoni, ya Amaleki mpe ya Maoni banyokolaki bino, boni, bogangaki epai na Ngai te mpo na kosenga lisungi ? Boni, nakangolaki bino te wuta na maboko na bango ? \v 13 Kasi bino, bosundolaki Ngai mpe bosalelaki banzambe mosusu. Yango wana, nakokangola bino lisusu te. \v 14 Bokende koganga epai ya banzambe oyo boponaki mpo ete ebikisa bino awa bozali kati na pasi. \p \v 15 Kasi bana ya Isalaele balobaki na Yawe : \pi1 — Ya solo, tosalaki lisumu na miso na Yo. Oyo omoni ete ezali malamu na miso na Yo, sala yango na biso ; kasi tobondeli Yo : bikisa biso lisusu sik’oyo ! \p \v 16 Bongo bana ya Isalaele balongolaki banzambe ya bapaya kati na bango mpe basalelaki Yawe. Mpe Yawe akokaki lisusu te kotala pasi na bango. \p \v 17 Tango bato ya Amoni basanganaki mpe batiaki molako na bango kati na Galadi, bana ya Isalaele basanganaki mpe batiaki molako na bango kati na Mitsipa. \v 18 Bato mpe bakonzi ya Galadi balobanaki : « Moto oyo akobundisa liboso bana ya Amoni akozala mokonzi ya bato nyonso ya Galadi. » \c 11 \s1 Tango ya Jefite \p \v 1 Jefite, moto ya Galadi, azalaki elombe ya bitumba. Azalaki mwana mobali oyo Galadi abotaki na mwasi ya makangu. \v 2 Nzokande mwasi ya Galadi abotelaki ye mpe bana mibali. Mpe tango bakolaki, babenganaki Jefite ; balobaki na ye : « Ozali na libula te kati na ndako ya tata na biso, pamba te ozali mwana ya makangu. » \p \v 3 Boye, Jefite akimaki mosika ya bandeko na ye ya mibali mpe akomaki kovanda kati na etuka ya Tobi. Bato ya mobulu basanganaki na ye mpe bazalaki kotambola elongo na ye. \p \v 4 Sima na mwa tango, bato ya Amoni babundisaki Isalaele. \v 5 Wana bato ya Amoni bazalaki kobundisa bana ya Isalaele, bampaka ya Galadi bakendeki koluka Jefite, kati na Tobi. \v 6 Balobaki na Jefite : \pi1 — Yaka, mpe zala mokambi na biso mpo ete tobundisa bato ya Amoni. \p \v 7 Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi : \pi1 — Boni, ezali bino te bato oyo boyinaki ngai mpe bobenganaki ngai wuta na ndako ya tata na ngai ? Mpo na nini bozali koya sik’oyo epai na ngai, awa bokomi na pasi ? \p \v 8 Bampaka ya Galadi balobaki lisusu na Jefite : \pi1 — Soki tozongi sik’oyo epai na yo, ezali mpo ete oya elongo na biso, obundisa bato ya Amoni mpe okoma mokonzi na biso, mokonzi ya bavandi nyonso ya Galadi. \p \v 9 Jefite azongiselaki bampaka ya Galadi : \pi1 — Soki bozongisi ngai mpo na kobundisa bato ya Amoni, bongo Yawe akabi bango na maboko na ngai, boni, nakozala solo mokonzi na bino ? \p \v 10 Bampaka ya Galadi bazongiselaki Jefite : \pi1 — Tika ete Yawe azala Motatoli kati na biso ! Tika ete apesa biso etumbu soki tosali te ndenge olobi. \p \v 11 Boye Jefite akendeki nzela moko na bampaka ya Galadi, mpe bato ya Galadi bakomisaki ye mokambi mpe mokonzi ya mampinga. Mpe Jefite azongelaki koloba maloba na ye nyonso liboso ya Yawe, kati na Mitsipa. \s1 Jefite atindi bantoma epai ya bato ya Amoni \p \v 12 Bongo Jefite atindaki bantoma epai ya mokonzi ya bato ya Amoni mpo na koloba na ye : \pi1 — Ozwi biso na likambo nini mpo ete oya kobundisa mboka na biso ? \p \v 13 Mokonzi ya bato ya Amoni azongiselaki bantoma ya Jefite : \pi1 — Ezali mpo ete Isalaele abotolaki mokili na ngai tango abimaki na Ejipito ; babotolaki mokili yango longwa na lubwaku ya Arinoni, mayi moke ya Yaboki kino na lubwaku ya Yordani. Sik’oyo, zongisela ngai yango na kimia. \p \v 14 Jefite atindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya bato ya Amoni mpo na koloba na ye : \pm \v 15 — Tala maloba oyo Jefite alobi : « Bana ya Isalaele bazwaki mokili ya Moabi te to mokili ya bato ya Amoni te. \v 16 Kasi tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, batambolaki na esobe kino na ebale monene ya Barozo, mpe bakomaki na Kadeshi. \v 17 Batindaki bantoma epai ya mokonzi ya Edomi, mpo na koloba na ye : ‹ Pesa biso nzela ya koleka na mokili na yo. › Kasi mokonzi ya Edomi aboyaki koyoka. Bana ya Isalaele batindaki lisusu bantoma epai ya mokonzi ya Moabi, kasi ye mpe aboyaki. Boye, bana ya Isalaele bawumelaki na Kadeshi. \pm \v 18 Na sima, batambolaki na esobe mpe babalukaki na sima ya mokili ya Edomi mpe ya Moabi, balekaki na ngambo ya este ya mokili ya Moabi mpe batongaki milako na bango kuna, na ngambo mosusu ya lubwaku ya Arinoni. Kasi bakotaki te na mokili ya Moabi. \pm \v 19 Bongo bana ya Isalaele batindaki bantoma epai ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni mpo na koloba na ye : ‹ Tika biso toleka na mokili na yo mpo ete tokende na esika na biso. › \v 20 Kasi Sikoni andimaki te bana ya Isalaele mpo ete baleka na mokili na ye. Boye asangisaki bato na ye nyonso ; batongaki milako, na Yakatsi, mpe babundisaki Isalaele. \pm \v 21 Kasi Yawe, Nzambe ya Isalaele, akabaki Sikoni mpe bato na ye nyonso na maboko ya bana ya Isalaele, mpe balongaki bango. Boye bana ya Isalaele babotolaki mokili nyonso ya bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na etando wana. \v 22 Babotolaki etuka nyonso ya bato ya Amori, longwa na lubwaku ya Arinoni kino na mayi moke ya Yaboki, longwa na esobe kino na Yordani. \pm \v 23 Awa Yawe, Nzambe ya Isalaele, asili kobotola mokili ya bato ya Amori mpe apesi yango epai ya bana ya Isalaele, yo olingi sik’oyo kobotola bango yango ? \v 24 Boni, okozwa te oyo Kemoshi, nzambe na yo, apesi yo ? Biso tokozwa oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso. \v 25 Boni, ozali malamu koleka Balaki, mwana mobali ya Tsipori, mokonzi ya Moabi ? Boni, asila koswanisa to kobundisa bana ya Isalaele ? \v 26 Mibu nkama misato, bana ya Isalaele bavandaki na Eshiboni, na Aroeri, na bamboka na yango ya mike mpe na bingumba nyonso oyo ezali pembeni ya Arinoni. Mpo na nini bobotolaki yango te na tango wana ? \v 27 Ngai nasali yo mabe te, kasi yo nde ozali kosala ngai mabe na kobundisa ngai. Tika ete Yawe, Mosambisi, akata lelo likambo kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Amoni. » \m \v 28 Kasi mokonzi ya Amoni aboyaki koyoka maloba oyo Jefite atindelaki ye. \s1 Jefite apesi elaka \p \v 29 Molimo na Yawe akitelaki Jefite. Jefite akatisaki Galadi mpe Manase, mpe alekaki na Mitsipe ya Galadi. Wuta na Mitsipe ya Galadi, akendeki kobundisa bato ya Amoni. \v 30 Jefite alapaki ndayi epai na Yawe, alobaki : « Soki okabi bato ya Amoni na maboko na ngai, \v 31 nakobonzela Yo, Yawe, lokola mbeka ya kotumba, nyonso oyo ekobima na ekuke ya ndako na ngai mpo na koyamba ngai, tango nakozonga na elonga wuta na bato ya Amoni. » \p \v 32 Bongo Jefite akatisaki bandelo ya bato ya Amoni, mpe Yawe akabaki bango na maboko na ye. \v 33 Abebisaki bingumba tuku mibale oyo ezali na kati-kati ya Aroeri mpe Miniti kino na Abele-Keramimi. Ezalaki kobebisama ya makasi mpo na bato ya Amoni oyo bakweyaki liboso ya bana ya Isalaele. \s1 Mwana mwasi ya Jefite \p \v 34 Tango Jefite azongaki na ndako na ye, na Mitsipa, mwana na ye ya mwasi abimaki mpo na koyamba ye ; azalaki kobina mpe kobeta mbonda ya moke. Azalaki mwana na ye kaka moko : azalaki na mwana mosusu te, ezala ya mwasi to ya mobali. \v 35 Tango kaka Jefite amonaki ye, apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : \pi1 — Ah, mwana na ngai ya mwasi ! Opesi ngai mawa mingi mpe otie ngai na mobulu, pamba te nalapaki ndayi epai na Yawe mpe nakoki lisusu kozonga sima te. \p \v 36 Mwana na ye ya mwasi alobaki : \pi1 — Tata na ngai, opesaki elaka epai na Yawe. Sala na ngai ndenge olakaki epai na Yawe, pamba te Yawe azongisi mabe na mabe epai ya banguna na yo, bato ya Amoni. \m \v 37 Abakisaki : \pi1 — Pesa ngai nzela ete likambo oyo moko esalema mpo na ngai : Tikela ngai basanza mibale mpo ete nakende koyengayenga mpe kolela, elongo na baninga na ngai, bozangi na ngai koyeba nzoto ya mobali. \p \v 38 Jefite alobaki na ye : \pi1 — Okoki na yo kokende. \p Mpe atikaki ye kokende mpo na basanza mibale. Boye mwana mwasi akendeki na ngomba elongo na baninga na ye ya basi, mpe alelaki mpo ete ayebaki nanu nzoto ya mibali te. \v 39 Sima na basanza mibale, azongaki epai ya tata na ye, Jefite ; mpe Jefite akokisaki epai ya mwana na ye ya mwasi, ndayi oyo alapaki. Nzokande, atikalaki kaka koyeba nzoto ya mobali te. Boye, ekoma momesano kati na Isalaele : \v 40 mibu nyonso, bilenge basi ya Isalaele babimaka mikolo minei, mpo na kosala feti na tina na mwana mwasi ya Jefite, moto ya Galadi. \c 12 \s1 Jefite mpe bato ya Efrayimi \p \v 1 Bato ya Efrayimi basanganaki, bakatisaki na ngambo ya Tsafoni mpe balobaki na Jefite : \pi1 — Mpo na nini okatisaki mondelo ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango, bongo obengaki biso te mpo ete tokende na yo elongo ? Tokotumba yo elongo na ndako na yo ! \p \v 2 Jefite azongiselaki bango : \pi1 — Ngai mpe bato na ngai, tozalaki na kobendana makasi na bato ya Amoni ; mpe tango nabengaki bino, bokangolaki ngai te wuta na maboko na bango. \v 3 Tango namonaki ete bokangoli na bino ngai te, nakabaki bomoi na ngai, mpe nakatisaki ngai moko nzela ya bato ya Amoni mpo na kobundisa bango ; mpe Yawe apesaki ngai elonga likolo na bango. Sik’oyo, mpo na nini boyei lelo kobundisa ngai ? \p \v 4 Jefite asangisaki mibali nyonso ya Galadi, mpe babundisaki bato ya Efrayimi. Bato ya Galadi balongaki bato ya Efrayimi ; mpe bato ya Efrayimi balobaki : « Bino bato ya Galadi, bozali na bino kaka bato oyo bokimaki wuta na Efrayimi mpe na Manase. » \v 5 Bato ya Galadi bakangaki esika oyo bakatisaka Yordani na makolo, pene ya etuka ya Efrayimi. Mpe tango nyonso mokimi moko ya Efrayimi azalaki koloba : « Tika ngai nakatisa, » bato ya Galadi bazalaki kotuna ye : « Ozali moto ya Efrayimi ? » Soki azongisi : « Te, » \v 6 bazalaki kosenga ete aloba : « Shiboleti ; » soki alobi : « Siboleti, » mpo ete akoki te koloba yango malamu, bazalaki kokanga ye mpe koboma ye na esika oyo bakatisaka Yordani na makolo. Na tango wana, babomaki bato ya Efrayimi nkoto tuku minei na mibale. \p \v 7 Jefite, moto ya Galadi, akambaki Isalaele mibu motoba. Sima na yango, akufaki, mpe bakundaki ye kati na engumba moko ya Galadi. \s1 Tango ya bilombe Ibitsani, Eloni mpe Abidoni \p \v 8 Sima na Jefite, Ibitsani, moto ya Beteleemi, akambaki Isalaele. \v 9 Azalaki na bana mibali tuku misato mpe bana basi tuku misato. Abalisaki bana na ye ya basi na libanda ya libota ya botata na ye, mpe ayeisaki bilenge basi tuku misato ya bikolo mosusu mpo na bana na ye ya mibali. Ibitsani akambaki Isalaele mibu sambo. \v 10 Ibitsani akufaki, mpe bakundaki ye kati na Beteleemi. \p \v 11 Sima na Ibitsani, Eloni, moto ya libota ya Zabuloni, akambaki Isalaele mibu zomi. \v 12 Eloni akufaki, mpe bakundaki ye kati na mboka Ayaloni, kati na etuka ya Zabuloni. \p \v 13 Sima na Eloni, Abidoni, mwana mobali ya Ileli, moto ya mokili ya Piratoni, akambaki Isalaele. \v 14 Azalaki na bana mibali tuku minei mpe bakoko ya mibali tuku misato oyo babandaki kotambola likolo ya ba-ane tuku sambo. Akambaki Isalaele mibu mwambe. \v 15 Abidoni, mwana mobali ya Ileli, akufaki, mpe bakundaki ye na Piratoni, kati na etuka ya Efrayimi, na mokili ya bangomba ya bato ya Amaleki. \c 13 \s1 Tango ya Samison \p \v 1 Bana ya Isalaele basalaki lisusu mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe akabaki bango mibu tuku minei na maboko ya bato ya Filisitia. \v 2 Ezalaki na mobali moko, moto ya Tsorea, ya libota ya Dani, kombo na ye ezalaki Manoa ; mwasi na ye azalaki ekomba, mpe abotelaki ye bana te. \v 3 Anjelu na Yawe abimelaki mwasi ya Manoa mpe alobaki : « Tala, ozali ekomba mpe ozali na bana te, kasi okokoma na zemi mpe okobota mwana mobali. \v 4 Sik’oyo, sala keba ! Komela vino te to masanga mosusu ya makasi, mpe kolia te eloko nyonso ya mbindo ; \v 5 pamba te okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bakoki te kokata suki ya moto na ye, pamba te mwana mobali yango akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye. Akobanda kokangola Isalaele wuta na maboko ya bato ya Filisitia. » \p \v 6 Tango mwasi azongaki epai ya mobali na ye, ayebisaki ye : « Moto moko ya Nzambe ayaki epai na ngai, azalaki lokola Anjelu na Nzambe : azalaki somo mingi. Natunaki ye te soki awuti wapi, mpe ayebisaki ngai te kombo na ye. \v 7 Kasi alobaki na ngai : ‹ Okozwa zemi mpe okobota mwana mobali. Bongo komela vino to masanga mosusu ya makasi te mpe kolia eloko moko te ya mbindo, pamba te mwana mobali oyo okobota akozala bule mpo na Nzambe wuta na libumu ya mama na ye kino na mokolo na ye ya kufa. › » \p \v 8 Bongo Manoa asambelaki Yawe : « Oh Nkolo, nabondeli Yo : tika ete ozongisa lisusu moto na Nzambe, oyo otindelaki biso, mpo ete aya lisusu koteya biso nini tosengeli kosala mpo na mwana mobali oyo akobotama ! » \p \v 9 Nzambe ayokaki Manoa, mpe Anjelu na Nzambe ayaki lisusu epai ya mwasi, wana avandaki na bilanga. Kasi mobali na ye, Manoa, azalaki elongo na ye te. \v 10 Mwasi ya Manoa akendeki mbangu koyebisa mobali na ye : « Tala, namoni moto oyo abimelaki ngai na mikolo oyo eleki ! » \v 11 Manoa atelemaki mpe alandaki mwasi na ye. Tango akomaki epai ya moto yango, alobaki : \pi1 — Boni, ezali yo nde osololaki na mwasi na ngai ? \p Azongisaki : \pi1 — Iyo, ezali ngai. \p \v 12 Manoa atunaki ye : \pi1 — Tango maloba na yo ekokokisama, mibeko nini tosengeli kotosa mpo na bomoi ya mwana ? Mpe ye mwana asengeli kosala nini ? \p \v 13 Anjelu na Yawe azongiselaki Manoa : \pi1 — Mwasi na yo asengeli kosala makambo nyonso oyo nayebisaki ye. \v 14 Akolia eloko moko te oyo ewuti na nzete ya vino, akomela vino te to masanga mosusu ya makasi, akolia eloko moko te ya mbindo ; asengeli kosala makambo nyonso oyo natindi ye. \p \v 15 Manoa alobaki na Anjelu na Yawe : \pi1 — Soki okoki kozela mwa moke, wana tozali kobongisela yo mwana ntaba. \p \v 16 Anjelu na Nzambe azongiselaki Manoa : \pi1 — Ata ozelisi ngai, nakolia ata eloko na yo moko te ; kasi soki obongisi mbeka ya kotumba, bonzela yango nde Yawe. \p Manoa asosolaki te ete oyo azali liboso na ye azali Anjelu na Yawe. \v 17 Manoa atunaki Anjelu na Yawe : \pi1 — Kombo na yo nani mpo ete topesa yo lokumu tango elaka na yo ekokokisama ? \p \v 18 Anjelu na Yawe azongiselaki ye : \pi1 — Mpo na nini ozali kotuna ngai kombo na ngai ? Kombo na ngai ezali kombo ya kokamwa. \p \v 19 Boye Manoa azwaki mwana ntaba elongo na mbeka ya gato, abonzaki yango na likolo ya libanga, liboso ya Yawe. Wana Manoa mpe mwasi na ye bazalaki kotala, Yawe asalaki likambo moko ya kokamwa. \v 20 Ndenge moto ezalaki komata na likolo longwa na etumbelo, Anjelu na Yawe mpe amataki kati na moto. Tango bamonaki bongo, Manoa mpe mwasi na ye bakweyaki bilongi kino na mabele. \v 21 Tango Anjelu na Yawe alimwaki na miso ya Manoa mpe ya mwasi na ye, Manoa asosolaki ete ezalaki Anjelu ya Yawe. \p \v 22 Manoa alobaki na mwasi na ye : \pi1 — Solo, tokufi na biso, pamba te tomoni Nzambe ! \p \v 23 Kasi mwasi na ye azongisaki : \pi1 — Soki Yawe asepelaki koboma biso, akokaki kondima te mbeka ya kotumba mpe mbeka ya gato oyo esalemi na maboko na biso to kolakisa biso makambo oyo nyonso to mpe koyebisa biso sik’oyo makambo oyo. \p \v 24 Mwasi ya Manoa abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Samison. » Mwana akolaki, mpe Yawe apambolaki ye. \v 25 Molimo na Yawe abandaki kosalela ye tango azalaki na Maane Dani, na kati-kati ya Tsorea mpe Eshitaoli. \c 14 \s1 Libala ya Samison \p \v 1 Mokolo moko, Samison akendeki na Timina mpe amonaki kuna elenge mwasi moko ya Filisitia. \v 2 Tango azongaki, alobaki na tata mpe mama na ye : \pi1 — Namoni mwasi moko kati na basi ya bato ya Filisitia, na Timina ; bokende kobalela ngai ye. \p \v 3 Tata mpe mama na ye bazongisaki : \pi1 — Boni, kati na bandeko na yo to kati na bato na biso nyonso, ezali te na bana basi ya kitoko mpo ete okende kozwa mwasi kati na bato ya Filisitia oyo bakatama ngenga te ? \p Kasi Samison alobaki na tata na ye : \pi1 — Balela ngai ye, pamba te ye nde abongi mpo na ngai. \p \v 4 Baboti na ye bayebaki te ete likambo wana ewutaki epai na Yawe, pamba te Yawe azalaki koluka nzela mpo na kokotisa mobulu kati na bana ya Isalaele mpe bato ya Filisitia. Pamba te na tango wana, bato ya Filisitia bazalaki kokonza bana ya Isalaele. \p \v 5 Samison akendeki na Timina elongo na tata mpe mama na ye. Tango bakomaki pembeni ya bilanga ya vino ya Timina, mbala moko, mwana nkosi moko eyaki konguluma liboso ya Samison. \v 6 Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Boye, Samison apasolaki nkosi na kati-kati, na maboko pamba, ndenge bapasolaka mwana ntaba. Kasi kati na makambo oyo asalaki, ayebisaki eloko moko te epai ya tata to mama na ye. \v 7 Sima na yango, Samison akendeki na Timina, asololaki na mwana mwasi mpe alingaki ye. \p \v 8 Sima na mwa mikolo, tango azongaki na Timina mpo na kobala mwasi na ye, alekaki pembeni mpo na kotala nzoto ya nkosi oyo ekufaki. Kati na nzoto yango, amonaki liboke ya banzoyi mpe mafuta na yango. \v 9 Akamataki yango na maboko na ye mpe aliaki yango nzela-nzela. Tango akutanaki na baboti na ye, apesaki bango ndambo ya mafuta ya nzoyi. Bongo bango mpe baliaki yango ; kasi atikalaki koyebisa bango te ete azwaki mafuta yango ya nzoyi kati na nzoto ya nkosi oyo ekufa. \s1 Lisese ya Samison \p \v 10 Tata na ye akendeki kotala elenge mwasi yango, mpe Samison asalisaki kuna feti moko ya monene, kolanda ndenge ezalaki momesano mpo na libala. \v 11 Tango abimaki, bapesaki bato tuku misato mpo ete bavanda na ye elongo. \v 12 Samison alobaki na bango : \pi1 — Nalingi koyebisa bino lisese moko. Soki bopesi ngai eyano, na mikolo sambo ya feti, nakopesa bino bilamba tuku misato ya lino mpe bilamba tuku misato ya feti. \v 13 Soki bokoki te kopesa ngai eyano, bokopesa ngai bilamba tuku misato ya lino mpe bilamba tuku misato ya feti. \p Balobaki : \pi1 — Yebisa biso lisese na yo, tolingi koyoka yango ! \p \v 14 Samison alobaki na bango : \q1 — Kati na oyo eliaka, ebimi oyo baliaka ; \q2 kati na oyo ezali makasi, ebimi oyo ezali elengi. \m Mikolo misato mobimba, bakokaki te kopesa ye eyano. \v 15 Bongo na mokolo ya minei, balobaki na mwasi ya Samison : \pi1 — Bondela mobali na yo mpo ete apesa biso ndimbola ya lisese ; sima na yango, yaka koyebisa biso ndimbola yango. Soki te, tokotumba yo elongo na ndako ya tata na yo. Obengisi biso awa mpo na koyiba biso ? \p \v 16 Bongo mwasi ya Samison akomaki kolela liboso ya mobali mpe alobaki na ye : \pi1 — Oyina ngai ! Solo, olingaka ngai te ! Oyebisaki bato na ngai lisese, kasi oyebisaki ngai ndimbola na yango te ! \p Samison azongisaki : \pi1 — Natikala kutu kolimbola yango epai ya tata to mama na ngai te, bongo ndenge nini nalimbola yango epai na yo ? \p \v 17 Na mikolo nyonso sambo ya feti, azalaki kaka kolela. Suka na suka, na mokolo ya sambo, Samison alimbolelaki ye yango, pamba te mwasi na ye atungisaki ye mingi. Bongo mwasi ya Samison, ye mpe akendeki kopesa ndimbola ya lisese yango epai ya bato na ye. \v 18 Na mokolo ya sambo, liboso ete moyi elala, bato ya engumba bayaki koloba na Samison : \q1 — Eloko nini ezali elengi koleka mafuta ya nzoyi ? \q2 Mpe eloko nini eleki nkosi na makasi ? \p Samison alobaki na bango : \q1 — Soki bosalaki likita te na mwasi na ngai, \q2 bokokaki koyeba te ndimbola ya lisese na ngai. \p \v 19 Bongo Molimo na Yawe akitelaki Samison na nguya. Akendeki na Ashikeloni mpe abomaki bato tuku misato, azwaki bilamba na bango mpe apesaki yango epai ya bato oyo bapesaki ye ndimbola ya lisese. Azongaki na ndako ya tata na ye na kanda makasi. \v 20 Mpe babalisaki mwasi ya Samison epai ya moko kati na baninga ya Samison, oyo babengisaki na feti. \c 15 \s1 Samison azongisi mabe na mabe \p \v 1 Sima na mwa mikolo, na eleko oyo bakataka ble, Samison azwaki mwana ntaba mpe akendeki kotala mwasi na ye. Alobaki : \pi1 — Nalingi kokota na shambre epai wapi mwasi na ngai alalaka. \p Kasi tata ya mwasi na ye apesaki ye nzela te. \v 2 Alobaki na Samison : \pi1 — Nakanisaki penza ete olingaka ye te, yango wana nabalisaki ye epai ya moko kati na baninga na yo, oyo obengisaki na feti. Tala leki na ye ya mwasi, aleki ye na kitoko te ? Zwa ye kaka. \p \v 3 Samison alobaki na bango : \pi1 — Ya mbala oyo, nakozala ata na ngambo moko te liboso ya bato ya mokili ya Filisitia ; nakeyi kosala bango mabe. \p \v 4 Samison abimaki mpe akangaki bambwa ya zamba nkama misato, akangisaki yango mibale-mibale na mikila mpe atiaki koni na kati-kati ya mikila mibale-mibale ya bambwa yango. \v 5 Apelisaki koni yango mpe atikaki bambwa ya zamba kati na bilanga ya ble ya bato ya Filisitia, oyo esili kokomela. Atumbaki maboke ya ble oyo batiaki na mipiku mpe ble oyo babukaki nanu te, banzete ya vino mpe banzete ya olive. \v 6 Bato ya Filisitia batunaki : \pi1 — Nani asali boye ? \p Bazongiselaki bango : \pi1 — Ezali Samison, bokilo ya moto moko ya Timina ; pamba te abalisaki mwasi ya Samison epai ya moko kati na baninga oyo Samison abengisaki na feti. \p Bato ya Filisitia bakendeki mpe batumbaki mwasi yango elongo na tata na ye kino bakufaki. \v 7 Samison alobaki na bango : « Lokola bosali boye, nakotika te kino nakozongisela bino mabe na mabe. » \p \v 8 Samison abundisaki bango mpe abomaki ebele kati na bango. Bongo akendeki mpe avandaki kati na lidusu ya mabanga, na Etami. \s1 Bakabi Samison na maboko ya bato ya Filisitia \p \v 9 Bato ya Filisitia bayaki mpe batongaki molako na bango kati na etuka ya Yuda, bapanzanaki kino na etuka ya Leyi. \v 10 Bato ya Yuda batunaki : \pi1 — Mpo na nini boyei kobundisa biso ? \p Bato ya Filisitia bazongiselaki bango : \pi1 — Toyei kokanga Samison na basinga mpo ete tosala ye ndenge asalaki biso. \p \v 11 Bato nkoto misato ya Yuda bakendeki na lidusu ya mabanga ya Etami, mpe balobaki na Samison : \pi1 — Oyebi te ete bato ya Filisitia bazali kokonza biso ? Likambo nini osali biso ? \p Samison azongisaki : \pi1 — Nazongiseli bango makambo oyo bango basalaki ngai. \p \v 12 Bato ya Yuda balobaki na Samison : \pi1 — Toyei mpo na kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko ya bato ya Filisitia. \p Samison alobaki na bango : \pi1 — Bolapa ndayi liboso na ngai ete bokoboma ngai te bino moko. \p \v 13 Bato ya Yuda bazongisaki : \pi1 — Iyo ! Tokoboma yo te. Tolingi kaka kokanga yo na basinga mpe kokaba yo na maboko na bango. \p Bongo bakangaki ye na basinga mibale ya sika mpe babimisaki ye na lidusu ya mabanga. \v 14 Tango bakomaki pembeni ya etuka ya Leyi, bato ya Filisitia bayaki kokutana na ye na koganga. Molimo na Yawe akitelaki ye na nguya, mpe basinga oyo ekangaki maboko na ye ekatanaki lokola basinga ya lino oyo eziki na moto, mpe ekweyaki wuta na maboko na ye. \v 15 Samison amonaki mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, asembolaki loboko na ye, alokotaki mokuwa yango mpe abomaki na yango bato nkoto moko. \p \v 16 Samison alobaki : \q1 « Na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, \q2 nakangisi bango mipiku na mipiku ; \q1 na mokuwa ya mobesu ya mbanga ya ane, \q2 nabomi bato nkoto moko. » \m \v 17 Tango asilisaki koloba, abwakaki mokuwa yango mosika mpe apesaki esika yango kombo « Ramati-Leyi\f + \fr 15.17 \fr*\ft Ramati-Leyi elingi koloba : ngomba moke ya mbanga.\ft*\f*. » \p \v 18 Lokola azalaki na posa makasi ya mayi, asambelaki Yawe : « Opesi mosali na Yo elonga oyo monene ; boni, nakufa sik’oyo na posa ya mayi mpe nakweya na maboko ya bato oyo bakatama ngenga te ? » \p \v 19 Bongo Nzambe afungolaki libanga oyo ezalaki kati na Leyi, mpe libanga yango ebimisaki mayi. Tango Samison amelaki mayi, makasi na ye ezongaki mpe azwaki lisusu bomoi. Boye abengaki etima yango Eyini-Akore\f + \fr 15.19 \fr*\ft Eyini-Akore elingi koloba : etima ya moto oyo azali kosambela.\ft*\f*. \p \v 20 Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale, wana bato ya Filisitia bazalaki kokonza mokili. \c 16 \s1 Samison mpe Dalila \p \v 1 Mokolo moko, Samison akendeki na Gaza epai wapi amonaki mwasi moko ya ndumba, mpe asangisaki na ye nzoto. \v 2 Tango bato ya Gaza bayokaki sango ete Samison azali kati na engumba na bango, bazingelaki esika oyo Samison alalaki mpe basenzelaki butu mobimba, mpo na kozela ye na ekuke ya engumba. Na butu yango, baninganaki te mpe balobaki : « Tokoboma ye na tongo tango akobima. » \v 3 Kasi Samison alalaki wana kaka kino na kati-kati ya butu ; bongo na ngonga ya zomi na mibale ya butu, alamukaki. Tango akomaki na ekuke ya engumba, asimbaki bizipelo na yango elongo na makonzi na yango mibale. Apikolaki yango elongo na libaya ya kokangela, atombolaki mpe atiaki yango na mapeka na ye, bongo amemaki yango kino na songe ya ngomba moke oyo etalana na engumba Ebron. \p \v 4 Sima na yango, Samison alingaki mwasi moko oyo azalaki kovanda na lubwaku ya Soreki ; kombo na ye ezalaki « Dalila. » \v 5 Bakambi ya Filisitia bakendeki epai ya Dalila mpe balobaki na ye : « Solola na ye na maloba ya sukali mpo ete alakisa yo sekele ya makasi na ye mpe ndenge nini tokoki kolonga ye, mpo ete tokanga ye basinga mpe tosilisa ye makasi. Moko na moko kati na biso akopesa yo mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. » \p \v 6 Dalila ayebisaki Samison : \pi1 — Yebisa ngai sekele ya makasi na yo mpe ndenge nini bakoki kokanga yo basinga mpe kosilisa yo makasi. \p \v 7 Samison azongiselaki ye : \pi1 — Soki bakangi ngai na basinga sambo ya mobesu, oyo nanu bakawusi te, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. \p \v 8 Boye, bakambi ya Filisitia bamemelaki Dalila basinga sambo ya mobesu, oyo nanu bakawusi te, mpe Dalila alingaki Samison basinga yango. \v 9 Lokola bato oyo batindamaki mpo na kokanga ye bazalaki ya kobombama kati na ndako, Dalila abelelaki : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » \p Samison akataki na pete penza basinga yango ndenge basinga ya lino ekatanaka soki ezwi moto. Boye, basosolaki te sekele ya makasi na ye. \p \v 10 Dalila alobaki na Samison : \pi1 — Osakani na ngai mpe okosi ngai ! Sik’oyo, yebisa ngai eloko nini bakoki kosalela mpo na kokanga yo ? \p \v 11 Samison alobaki : \pi1 — Soki bakangi ngai na basinga ya sika oyo nanu basaleli te, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. \p \v 12 Dalila azwaki basinga ya sika mpe akangaki na yango Samison. Bongo abelelaki : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » \p Atako bato oyo batindamaki mpo na kokanga ye bazalaki lisusu ya kobombama kati na ndako, Samison akataki kaka lokola singa moko pamba, basinga oyo bakangaki ye. \p \v 13 Boye Dalila alobaki na Samison : \pi1 — Kino sik’oyo, ozali kaka kosakana na ngai mpe kokosa ngai ! Yebisa ngai ndenge nini bakoki kokanga yo basinga. \p Samison azongisaki : \pi1 — Soki okangi suki sambo ya moto na ngai na singa oyo batongelaka bilamba, mpe soki okangisi yango na likonzi, nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. \p Boye tango Samison azalaki nanu kolala, Dalila azwaki suki sambo ya moto na ye, akangaki yango na singa oyo batongelaka bilamba \v 14 mpe akangisaki yango na likonzi. Dalila abelelaki lisusu Samison : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » Samison alamukaki na pongi na ye mpe apikolaki likonzi elongo na singa oyo batongelaka bilamba. \p \v 15 Dalila alobaki na ye : « Ndenge nini okoki koloba ete olingaka ngai tango motema na yo ezali elongo na ngai te ! Oyo ezali mbala na yo ya misato ya kosakana na ngai, pamba te oyebisi ngai te sekele ya makasi na yo. » \p \v 16 Lokola, mokolo na mokolo, Dalila azalaki kotungisa Samison na maloba na ye mpe kozangisa ye kimia, Samison amonaki ete motungisi yango eleki ye ndelo. \v 17 Boye, ayebisaki Dalila makambo nyonso. Alobaki : « Suki na ngai ekatamaka te, pamba te Nzambe abulisa ngai wuta na libumu ya mama na ngai. Soki kaka bakati ngai suki, makasi na ngai ekosila mpe nakokoma moto na bolembu lokola moto nyonso. » \p \v 18 Tango Dalila amonaki ete Samison ayebisi ye makambo nyonso, atindaki sango epai ya bakambi ya Filisitia. Alobaki : « Boya lisusu, ayebisi ngai makambo nyonso. » \p Bakambi ya Filisitia bazongaki epai ya Dalila na mbongo ya bibende na maboko na bango. \v 19 Dalila alalisaki Samison na mipende na ye, abengaki mobali moko mpo na kokata ye suki sambo ya moto na ye. Samison akomaki kolemba, mpe makasi na ye esilaki. \v 20 Dalila abelelaki Samison : « Samison, bato ya Filisitia bayei kobundisa yo ! » \p Samison alamukaki na pongi na ye mpe amilobelaki : « Nakosala ndenge kaka nasalaka liboso mpe nakokangolama na ngai. » Kasi ayebaki te ete Yawe alongwaki kati na ye. \p \v 21 Bato ya Filisitia bakangaki ye, batobolaki ye miso, bamemaki ye na Gaza mpe bakangaki ye minyololo ya bibende ya bronze. Akomaki konika bambuma ya ble na enikelo ya libanga kati na boloko. \p \v 22 Kasi suki ya moto na ye ekomaki lisusu kokola wuta tango bakataki ye yango. \s1 Kufa ya Samison \p \v 23 Bakambi ya Filisitia basanganaki mpo na kobonza mbeka monene epai ya nzambe na bango, Dagoni, mpe kosala feti. Balobaki : « Nzambe na biso akabi monguna na biso, Samison, na maboko na biso. » \p \v 24 Tango bato bamonaki Samison, bakumisaki nzambe na bango, balobaki : \q1 « Nzambe na biso akabi na maboko na biso, \q2 monguna na biso, oyo azalaki kobebisa mokili na biso \q2 mpe koboma bato ebele kati na biso. » \p \v 25 Wana bazalaki kosepela, bagangaki : « Bomemela biso Samison mpo ete asepelisa biso ! » \p Babimisaki Samison na boloko mpe akomaki kosala masano liboso na bango. Tango batelemisaki ye na kati-kati ya makonzi ya tempelo na bango, \v 26 Samison alobaki na mosali oyo asimbaki loboko na ye : « Tia ngai na esika oyo nakoki kosimba makonzi oyo esimbi tempelo mpo ete nalalela yango. » \p \v 27 Nzokande, tempelo ezalaki ya kotonda na mibali, basi mpe bakambi nyonso ya Filisitia. Na likolo ya ndako, ezalaki na bato pene nkoto misato, mibali mpe basi, oyo bazalaki kotala masano oyo Samison azalaki kosala. \v 28 Samison abondelaki Yawe : « Nkolo Yawe, Yo oyo osalaka nyonso oyo olingi, kanisa ngai ! Nabondeli Yo, Nzambe : Pesa ngai makasi mbala oyo lisusu, mpe pesa ngai nzela ete, na mbala moko, nazongisa mabe na mabe epai ya bato oyo ya Filisitia mpo na miso na ngai mibale. » \p \v 29 Samison asimbaki makonzi nyonso mibale ya kati-kati, oyo esimbaki tempelo, mpe ayekamelaki yango, loboko ya mobali na likonzi moko, mpe loboko ya mwasi na likonzi mosusu. \v 30 Bongo Samison alobaki : « Tika ete nakufa elongo na bato ya Filisitia ! » \p Bongo atindikaki na makasi na ye nyonso, mpe tempelo ekweyelaki bakambi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna. Boye, kati na kufa na ye, abomaki bato ebele koleka na tango oyo azalaki na bomoi. \v 31 Bandeko na ye mpe libota nyonso ya tata na ye bayaki kozwa ebembe na ye. Bazongaki na yango mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, Manoa, na kati ya bingumba Tsorea mpe Eshitaoli. Samison akambaki Isalaele mibu tuku mibale. \c 17 \ms1 Bopengwi ya Isalaele \s1 Esika ya bule ya Mika \p \v 1 Kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Mika. » \v 2 Alobaki na mama na ye : \pi1 — Shekeli ya palata nkoto moko na nkama moko oyo bayibaki yo, oyo na tina na yango olakelaki mabe na miso na ngai, ezali na maboko na ngai ; ngai nde nazwaki yango. \p Mama na ye alobaki na ye : \pi1 — Mwana na ngai, tika ete Yawe apambola yo ! \p \v 3 Azongiselaki mama na ye mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na nkama moko. \p Mama na ye alobaki : \pi1 — Na maboko na ngai moko, nabonzi mbongo yango epai na Yawe mpo na mwana na ngai, mpo na kosala ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Nakozongisela yo yango. \p \v 4 Tango Mika azwaki mbongo yango, azongisaki yango lisusu epai ya mama na ye ; mpe mama na ye alongolaki mbongo ya bibende ya palata, nkama mibale oyo apesaki epai ya monyangwisi bibende na moto. Moto yango asalaki na yango ekeko mpe nzambe ya ekeko ya palata oyo banyangwisa. Mpe batiaki yango kati na ndako ya Mika. \v 5 Nzokande, Mika azalaki na esika na ye ya bule epai wapi azalaki kosambela. Asalisaki efode mpe banzambe mosusu ya bikeko ; bongo abulisaki lokola nganga-nzambe na ye, moko kati na bana na ye ya mibali. \p \v 6 Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te ; moto na moto azalaki kosala nyonso oyo ezali malamu na miso na ye. \v 7 Nzokande, ezalaki na elenge mobali moko ya Molevi, azalaki kovanda na Beteleemi ya Yuda, na ekolo Yuda. \v 8 Alongwaki na engumba Beteleemi ya Yuda mpe akendeki koluka esika mosusu ya kovanda. Na mobembo na ye, akomaki na etuka ya bangomba ya Efrayimi, na ndako ya Mika. \p \v 9 Mika atunaki ye : \pi1 — Owuti wapi ? \p Azongisaki : \pi1 — Nazali moto ya libota ya Levi, nawuti na Beteleemi ya Yuda mpe nazali koluka esika ya kovanda. \p \v 10 Mika alobaki na ye : \pi1 — Vanda elongo na ngai. Okozala tata mpe nganga na ngai ; nakopesa yo na mobu moko mbongo ya bibende ya palata, zomi, bilamba ya kolata mpe biloko ya kolia. \p Molevi akomaki kosala epai ya Mika. \p \v 11 Boye, Molevi yango andimaki kovanda elongo na Mika. Mika akomisaki Molevi lokola moko kati na bana na ye. \v 12 Mika abulisaki Molevi yango lokola nganga-nzambe na ye mpe akomaki kovanda elongo na ye. \v 13 Mika alobaki : « Sik’oyo nayebi ete Yawe akosalela ngai bolamu lokola moto ya libota ya Levi akomi nganga-nzambe na ngai. » \c 18 \s1 Bato ya libota ya Dani Bavandaki na Laishi \p \v 1 Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te, mpe bato ya libota ya Dani bazalaki koluka esika ya kovanda ; pamba te kino na tango wana, bazwaki nanu ya bango libula te kati na mabota nyonso ya Isalaele. \v 2 Boye, bana ya libota ya Dani batindaki mibali mitano ya libota na bango, kowuta na Tsorea mpe na Eshitaoli, mpo na kokende kononga mpe koyeba mokili yango. Balobaki na bango : « Bokende koyeba mokili yango ndenge ezali. » \p Mibali mitano yango bakotaki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika, epai wapi balekisaki butu. \v 3 Tango bakomaki pembeni ya ndako ya Mika, bayokaki mongongo ya elenge mobali Molevi. Babalukaki epai ye azalaki mpe balobaki na ye : \pi1 — Nani amemaki yo awa ? Ozali kosala nini na esika oyo ? Mpo na nini ozali awa ? \p \v 4 Elenge mobali ayebisaki bango : \pi1 — Tala makambo oyo Mika asali mpo na ngai : Azwi ngai na mosala mpe akomisi ngai nganga-nzambe na ye. \p \v 5 Balobaki na ye : \pi1 — Tunela biso epai ya Nzambe mpo ete toyeba soki mobembo na biso ekozala malamu. \p \v 6 Nganga-nzambe azongiselaki bango : \pi1 — Bokende na kimia, Yawe andimi mobembo na bino. \p \v 7 Mibali mitano yango bakendeki mpe bakomaki na Laishi. Bamonaki ete, kuna, bazali na kimia mpe na kozanga nungunungu lokola bato ya Sidoni, oyo bazalaki na kimia mpe na kozanga bobangi. Mokonzi moko te ya mboka azalaki konyokola bango. Bazalaki mosika na bato ya Sidoni mpe basalaki boyokani ata na moto moko te. \v 8 Tango mibali mitano yango bazongaki na Tsorea mpe na Eshitaoli, bandeko na bango batunaki bango : \pi1 — Sango nini bomemeli biso ? \p \v 9 Bazongisaki : \pi1 — Totelema, tokende kobotola mokili na bango ! Tomoni ete mokili yango ezali malamu penza. Boni ! Mpo na nini bovandi kimia boye ? Bozala bagoyigoyi te mpo na kokende kokota mpe kobotola mokili yango. \v 10 Tango bokokota kuna, bokomona bato bazali na kimia, mpe bazali na mokili monene oyo Nzambe akabi na maboko na bino, mokili oyo ezangi ata eloko moko te kati na biloko nyonso oyo ezalaka na mabele. \p \v 11 Mibali nkama motoba ya libota ya Dani, elongo na bibundeli na bango, balongwaki na Tsorea mpe na Eshitaoli. \v 12 Bakendeki kotonga molako na bango na Kiriati-Yearimi, kati na mokili ya Yuda. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango Maane Dani\f + \fr 18.12 \fr*\ft Maane Dani, na lokota ya Ba-Ebre : Maani Dani elingi koloba : Molako ya libota ya Dani.\ft*\f* ; ezali na ngambo ya weste ya Kiriati-Yearimi. \v 13 Balongwaki wana mpe bakendeki na etuka ya bangomba ya Efrayimi kino na ndako ya Mika. \v 14 Bongo mibali mitano oyo banongaki mokili ya Laishi balobaki na bandeko na bango : « Boni, boyebi ete kati na ndako oyo tovandi, ezali na efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende oyo banyangwisa na moto ? Boyeba likambo nini bokosala. » \p \v 15 Bongo babalukaki wana, na ndako epai wapi bazalaki mpe bakendeki na ndako ya elenge mobali Molevi, na ndako ya Mika, mpe bapesaki ye mbote. \v 16 Mibali nkama motoba ya libota ya Dani, oyo bamilengelaki mpo na bitumba batelemaki na ekotelo ya ekuke. \v 17 Bato mitano oyo banongaki mokili bakotaki kati na ndako mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto. Nganga-nzambe atelemaki liboso ya ekuke elongo na mibali nkama motoba oyo bamilengelaki mpo na bitumba. \v 18 Tango mibali bakotaki na ndako ya Mika mpe bazwaki efode, bikeko mike-mike ya ndako mpe nzambe ya ekeko basala na ebende banyangwisa na moto, nganga-nzambe alobaki na bango : \pi1 — Likambo nini bozali kosala ? \p \v 19 Bazongisaki : \pi1 — Kanga monoko ! Tia loboko na monoko na yo, yaka elongo na biso mpe zala tata na biso mpe nganga-nzambe na biso. Boni, likambo nini eleki malamu : kozala nganga-nzambe ya moto to kozala nganga-nzambe ya libota mpe ya etuka moko ya Isalaele ? \p \v 20 Nganga-nzambe atondaki na esengo, akamataki efode, banzambe ya bikeko ya ndako mpe bikeko mosusu ; akendeki elongo na bato ya libota ya Dani. \v 21 Babalukaki mpe bazongelaki nzela na bango ya mobembo, batiaki liboso bana na bango ya mike, bibwele mpe bozwi na bango ya talo. \v 22 Tango bakomaki mwa mosika na ndako ya Mika, Mika mpe bato oyo bazalaki pene ya ndako na ye batelemaki na koganga mpe balandaki libota ya Dani. \v 23 Awa bazalaki kobelela sima na libota ya Dani, bana ya Dani babalukaki mpe batunaki Mika : \pi1 — Likambo nini ezwi yo mpo ete omemela biso ebele ya bato boye ? \p \v 24 Mika azongisaki : \pi1 — Bozwi banzambe na ngai, oyo nasalaki, nganga-nzambe na ngai, mpe bokeyi na bino ; eloko nini natikali na yango lisusu ? Ndenge nini bokoki kotuna ngai : « Likambo nini ezwi yo ? » \p \v 25 Bato ya libota ya Dani bazongiselaki ye : \pi1 — Tika ete mongongo na yo eyokana te kati na biso, noki te bato ya kanda bakokweyela yo mpe bakoboma yo elongo na libota na yo mobimba. \p \v 26 Bana ya libota ya Dani balandaki nzela na bango. Tango Mika amonaki ete bana ya Dani baleki ye na makasi, abalukaki mpe azongaki na ndako na ye. \v 27 Bana ya libota ya Dani babotolaki biloko oyo Mika asalaki mpe nganga-nzambe na ye. \p Bongo bakendeki kobundisa engumba Laishi, mboka ya bato ya kimia mpe ya kozanga nungunungu ; babomaki bato nyonso na mopanga mpe batumbaki engumba na bango na moto. \v 28 Moto moko te ayaki kobikisa mboka wana, pamba te ezalaki mosika na Sidoni mpe esalaki boyokani te elongo na ekolo mosusu. Engumba yango ezalaki na lubwaku oyo ezali pembeni ya Beti-Reobi. Bana ya libota ya Dani batongaki wana engumba na bango mpe bavandaki kuna. \v 29 Bapesaki engumba yango kombo « Dani. » Ezalaki kombo ya koko na bango, Dani, mwana mobali ya Isalaele. Na kala, bazalaki kobenga engumba yango Laishi. \v 30 Bana ya libota ya Dani batelemisaki ekeko mpo na bango moko mpe batiaki Jonatan, mwana mobali ya Gerishomi, mwana mobali ya Manase mpe koko ya Moyize, mpo ete akoma Nganga-Nzambe ya bato ya libota ya Dani elongo na bana na ye. Basalaki mosala ya bonganga-Nzambe mpo na libota ya Dani kino tango bato ya mokili bakendeki na bowumbu. \v 31 Bakobaki kosalela bikeko oyo Mika asalaki na tango nyonso oyo Ndako ya Nzambe ezalaki na Silo. \c 19 \ms1 Libota ya Benjame \s1 Molevi mpe makangu na ye \p \v 1 Na mikolo oyo mokonzi azalaki te kati na Isalaele, Molevi moko oyo azalaki kovanda na suka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi azwaki lokola makangu mwasi ya mboka Beteleemi kati na Yuda. \v 2 Kasi makangu yango atambolaki na ekobo liboso na ye, alongwaki na libala mpe azongaki na ndako ya tata na ye, na Beteleemi kati na Yuda. Sima na basanza minei wuta azongaki na ndako ya tata na ye, \v 3 mobali na ye ayaki epai na ye mpo na kobondela ye ete azonga na libala. Mobali ayaki elongo na mosali na ye mpe amemaki ba-ane mibale. Mwasi yango akotisaki mobali na ye kati na ndako ya tata na ye ; mpe tango tata na ye amonaki mobali yango, asepelaki koyamba ye. \p \v 4 Tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, akangaki ye mpo ete avanda mwa moke. Boye avandaki na ye mikolo misato, aliaki, amelaki mpe alalaki kuna. \p \v 5 Na mokolo ya minei, balamukaki na tongo-tongo, mpe Molevi abongamaki mpo na kokende. Kasi tata ya mwana mwasi alobaki na bokilo na ye : « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi ; bongo sima, okoki na yo kokende. » \p \v 6 Boye, bango mibale bavandaki esika moko mpo na kolia mpe komela. Sima na yango, tata ya mwana mwasi alobaki : « Nabondeli yo, vanda lisusu, na butu ya lelo, mpo ete motema na yo esepela. » \p \v 7 Mobali atelemaki mpo na kokende ; kasi lokola tata-bokilo na ye abondelaki ye makasi ete avanda, avandaki kuna na butu yango. \p \v 8 Na tongo ya mokolo ya mitano, tango mobali alamukaki, tata ya mwana mwasi alobaki : « Lia mwa eloko mpo ete ozwa makasi, zela kino na sima ya midi. » Boye, bango mibale baliaki mesa moko. \v 9 Tango mobali elongo na makangu na ye mpe mosali na ye batelemaki mpo na kokende, tata-bokilo na ye, tata ya mwana mwasi, alobaki na ye : « Tala, pokwa esili koya ! Nabondeli yo : lekisa lisusu butu awa ; mokolo esili, vanda mpe sepelisa motema na yo. Bongo lobi, na tongo-tongo, bokoki kotelema mpo na kokende, mpe okozonga na ndako na yo. » \p \v 10 Kasi mosali asepelaki te kolekisa butu mosusu ; alongwaki mpe, elongo na ba-ane na ye mibale mpe makangu na ye, akendeki na Yebusi oyo ezali Yelusalemi. Ba-ane na ye ezalaki na bivandelo ya malamu penza. \v 11 Tango bakomaki pembeni ya Yebusi mpe mokolo ekomaki pene ya kosila, mosali alobaki na nkolo na ye : \pi1 — Nabondeli yo, tokota na engumba oyo ya bato ya Yebusi mpe tolekisa kuna butu. \p \v 12 Nkolo azongiselaki ye : \pi1 — Te, tokotelema te na engumba oyo ya bapaya, epai wapi ata mwana moko te ya Isalaele azali ; tokokoma kino na Gibea. \p \v 13 Alobaki lisusu na mosali na ye : \pi1 — Yaka, topusana pene na moko ya bamboka oyo ; bongo tokolekisa butu kati na Gibea to na Rama. \p \v 14 Boye bakobaki kotambola, mpe moyi ebungaki tango bakomaki pene ya Gibea, kati na mokili ya Benjame. \v 15 Batelemaki na Gibea mpo na kolekisa butu. Bakotaki mpe bavandaki na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka, kasi moto moko te ayambaki bango na ndako na ye mpo na kolekisa butu. \p \v 16 Na pokwa, mobali moko ya mobange awutaki na mosala na ye ya bilanga ; azalaki moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe azalaki kovanda na Gibea. Nzokande bato ya esika wana bazalaki bato ya libota ya Benjame. \v 17 Tango atombolaki miso, amonaki moto ya mobembo na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka. Mobange yango atunaki ye : \pi1 — Okeyi wapi mpe owuti wapi ? \p \v 18 Moto ya mobembo azongiselaki ye : \pi1 — Towuti na Beteleemi ya Yuda ; tozali kokende na esika oyo navandaka, na suka ya mboka ya etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nazalaki na Beteleemi, na Yuda, sik’oyo nazali kokende na Ndako ya Yawe. Moto moko te ayambi ngai kati na ndako na ye. \v 19 Nzokande tozali na matiti mpe biloko mpo na ba-ane na biso mibale, tozali lisusu na lipa mpe vino mpo na ngai, mwasi na ngai mpe mosali na ngai moko oyo nazali na ye elongo ; tozangi eloko moko te. \p \v 20 Mobange yango alobaki : \pi1 — Tika ete kimia ezala na yo ! Bosenga na yo nyonso ekozala na moto na ngai. Kasi kolekisa butu te na esika oyo bato ebele ya engumba bakutanaka. \p \v 21 Akotisaki bango na ndako na ye mpe apesaki ba-ane na ye matiti. Sima, basukolaki makolo, baliaki mpe bamelaki. \p \v 22 Wana bazalaki nanu kolia mpe komela, ndambo ya mibali ya engumba, ya mitema mabe, bazingelaki ndako ; babetaki na ekuke mpe balobaki na mobange oyo azalaki nkolo ndako : \pi1 — Bimisa mosali oyo ayei na ndako na yo ; tolingi kosangisa na ye nzoto ndenge basangisaka nzoto na basi. \p \v 23 Nkolo ndako abimaki libanda mpe alobaki na bango : \pi1 — Te, bandeko na ngai, bozala mabe boye te ! Lokola mobali oyo azali kati na ndako na ngai, bosala ye mabe oyo te. \v 24 Botala mwana na ngai ya mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe makangu ya mobali oyo azali kati na ndako ! Nazali kobimisa bango sik’oyo libanda mpo na bino mpo ete bokoka kosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi mpo na mobali oyo, bosala likambo ya soni ya boye te. \p \v 25 Kasi mibali yango baboyaki koyokela ye. Boye mobali azwaki makangu na ye mpe abimisaki ye libanda epai na bango. Bakangaki ye mpe basangisaki na ye nzoto na makasi, butu mobimba ; mpe tango tongo ekomaki pene ya kotana, batikaki ye akende. \v 26 Tango tongo ezali kotana, mwasi azongaki na ndako epai wapi mobali na ye azalaki, akweyaki na ekuke mpe alelaki wana kino tongo etanaki malamu. \v 27 Na tongo, tango mobali na ye alamukaki, afungolaki ekuke ya ndako mpo na kobima libanda mpe kokoba mobembo na ye ; amonaki makangu na ye alali na ekuke ya ndako, maboko liboso ya ekuke. \v 28 Alobaki na ye : « Telema ; tokende ! » \p Kasi azwaki eyano te. Bongo mobali yango atiaki makangu na ye na likolo ya ane na ye, akobaki mobembo na ye mpo na kozonga na ndako na ye. \v 29 Tango akomaki na ndako na ye, azwaki mbeli, akataki nzoto ya makangu na ye na biteni zomi na mibale mpe atindaki yango na etando nyonso ya Isalaele. \v 30 Moto nyonso oyo amonaki yango alobaki : « Likambo ya boye nanu namona yango te mpe nanu esalema te, wuta mokolo oyo bana ya Isalaele babimaki na Ejipito. Bokanisa na tina na yango, botala yango malamu mpe boyebisa biso nini tosengeli kosala. » \c 20 \s1 Bana ya Isalaele babundisaki libota ya Benjame \p \v 1 Bana nyonso ya Isalaele, wuta na Dani kino na Beri-Sheba mpe na mokili ya Galadi, babimaki lokola moto moko mpe basanganaki liboso ya Yawe, na Mitsipa. \v 2 Bakambi ya bato nyonso, ya mabota nyonso ya Isalaele bazalaki kati na lisanga ya bato ya Nzambe : ezalaki na basoda nkoto nkama minei oyo batambolaka na makolo mpe bayebi kobunda na mopanga. \v 3 Bana ya libota ya Benjame bayokaki ete bana ya Isalaele mosusu bakendeki kuna na Mitsipa. Bongo bana ya Isalaele balobaki : \pi1 — Yebisa biso ndenge nini kufa ya somo boye esalemaki. \p \v 4 Molevi, mobali ya mwasi oyo babomaki, alobaki : \pi1 — Ngai mpe makangu na ngai, toyaki na Gibea, na mokili ya Benjame mpo na kolekisa butu. \v 5 Na kati-kati ya butu, bavandi ya Gibea batombokelaki ngai mpe bazingelaki ndako mpo ete baboma ngai ; basangisaki nzoto na makasi na makangu na ngai, mpe akufaki. \v 6 Nakamataki makangu na ngai, nakataki ye na biteni mpe natindaki eteni moko na moko kati na etuka oyo bapesaki na bana ya Isalaele, pamba te bato ya libota ya Benjame basalaki likambo ya somo mpe ya soni. \v 7 Sik’oyo, bino nyonso bana ya Isalaele, boloba mpe bokata likambo oyo. \p \v 8 Bato nyonso batelemaki lokola moto moko mpe balobaki : « Moto moko te kati na biso akozonga na ndako na ye ya kapo to na ndako na ye. \v 9 Tala sik’oyo likambo oyo tokosala bato ya Gibea : Tokokende kobundisa bango kolanda ndenge zeke oyo tokobeta ekotalisa. \v 10 Tokozwa bato zomi kati na bato nkama moko ya mabota nyonso ya Isalaele, tokozwa bato nkama moko kati na bato nkoto moko mpe bato nkoto moko kati na bato nkoto zomi, mpo na kopesa biloko ya kolia epai ya mampinga. Bongo tango mampinga ekokoma na Gibea, na mokili ya Benjame, bakobundisa bato ya Gibea mpo na makambo nyonso ya somo oyo basalaki kati na Isalaele. » \p \v 11 Boye, mibali nyonso ya Isalaele basanganaki esika moko mpe bayokanaki lokola moto moko mpo na kobundisa engumba Gibea. \v 12 Bato ya bikolo ya Isalaele batindaki mibali kati na mabota nyonso ya Benjame mpe balobaki : « Ndenge nini bosali lisumu ya somo boye kati na bino ? \v 13 Sik’oyo, botindela biso bato mabe wana ya Gibea mpo ete toboma bango mpe tolongola mabe kati na Isalaele. » Kasi bato ya Benjame baboyaki koyokela baninga na bango, bana ya Isalaele. \v 14 Wuta na bingumba na bango nyonso ya mike, bato ya libota ya Benjame basanganaki esika moko, na Gibea, mpo na kobundisa bana ya Isalaele. \v 15 Na mokolo wana, bato ya libota ya Benjame basangisaki basoda nkoto tuku mibale na motoba oyo bayebi kobunda na mopanga, wuta na bamboka na bango nyonso ya mike, longola kaka engumba Gibea oyo esangisaki mibali ya bitumba nkama sambo. \v 16 Kati na basoda wana, ezalaki na mibali nkama sambo ya makasi oyo basalelaka loboko ya mwasi. Moto moko na moko kati na bango, soki abwaki libanga na nzela ya ebambelo mabanga, ekoki soki moke te kozanga kotuta suki moko. \v 17 Mibali ya Isalaele, longola kaka bato ya libota ya Benjame, bazalaki nkoto nkama minei, ba-oyo bayebi kosalela mopanga ; mpe bango nyonso bazalaki bato ya bitumba. \p \v 18 Bana ya Isalaele bakendeki na Beteli mpe batunaki Nzambe : \pi1 — Nani kati na biso asengeli kokende mpo na kobundisa libota ya Benjame ? \p Yawe azongisaki : \pi1 — Yuda akokende liboso. \p \v 19 Na tongo oyo elandaki, bana ya Isalaele bakendeki mpe batongaki molako na bango pembeni ya Gibea. \v 20 Mibali ya Isalaele babimaki mpo na kobundisa bato ya libota ya Benjame mpe bamibongisaki mpo na kobundisa bango na Gibea. \v 21 Bato ya libota ya Benjame babimaki na Gibea mpe babomaki, mokolo wana, mibali ya Isalaele nkoto tuku mibale na mibale. \v 22 Kasi mibali ya Isalaele bamilendisaki, bango na bango, mpe babongamaki na esika oyo bazalaki na mokolo ya liboso. \v 23 Bana ya Isalaele bakendeki mpe balelaki liboso ya Yawe kino na pokwa, mpe batunaki Yawe : \pi1 — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso ya libota ya Benjame ? \p Yawe azongiselaki bango : \pi1 — Bokende kobundisa bango. \p \v 24 Na mokolo ya mibale, bana ya Isalaele babundisaki bato ya libota ya Benjame. \v 25 Na tango wana, bana ya libota ya Benjame bakimaki na Gibea mpo na kobundisa bana ya Isalaele, babomaki lisusu mibali ya Isalaele nkoto zomi na mwambe ; bango nyonso bazalaki bato oyo bayebi kobunda na mopanga. \v 26 Bana ya Isalaele bakendeki, bango nyonso, na Beteli, mpe kuna, bavandaki mpe balelaki liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bana ya Isalaele bakilaki bilei kino na pokwa mpe babonzaki, epai na Yawe, mbeka ya kotumba mpe mbeka ya boyokani. \v 27 Bana ya Isalaele batunaki Yawe. (Na mikolo wana, Sanduku ya Boyokani ya Nzambe ezalaki kuna. \v 28 Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, azalaki na mosala liboso ya Sanduku). Batunaki : \pi1 — Boni, tokende lisusu kobundisa bandeko na biso, bato ya libota ya Benjame to te ? \p Yawe azongisaki : \pi1 — Bokende, pamba te, lobi, nakokaba bango na maboko na bino. \p \v 29 Bongo mibali ya Isalaele babombamaki mpe bazingelaki Gibea. \v 30 Bana ya Isalaele bakendeki na mokolo ya misato kobundisa libota ya Benjame mpe bamibongisaki malamu mpo na kobundisa Gibea lokola na mbala ya liboso. \v 31 Bana ya Benjame babimelaki bango mpe babendaki bango mosika ya engumba. Babandaki koboma bana ya Isalaele ndenge basalaki liboso ; babomaki bato pene tuku misato kati na zamba, na nzela ya Beteli mpe ya Gibea. \v 32 Libota ya Benjame bakanisaki ete bakobeta bango ndenge basalaki liboso. \p Nzokande bana ya Isalaele bazwaki mokano ya kokima mpe ya komema bango mosika ya engumba, mosika ya Gibea. \v 33 Na bongo, bana ya Isalaele batelemaki na bisika na bango mpe bakendeki kosangana mpo na bitumba, na Bala-Tamari. Bana ya Isalaele, oyo babombamaki, babimaki na bisika na bango mpe balandaki bango na etando ya polele, na Gibea. \v 34 Mibali makasi ya Isalaele, nkoto zomi, babimaki na Gibea ; mpe bitumba ezalaki makasi. Kasi bana ya libota ya Benjame basosolaki te mabe nini ekokomela bango. \v 35 Yawe abetaki bana ya Benjame liboso ya Isalaele, mpe, na mokolo wana, bana ya Isalaele babomaki mibali nkoto tuku mibale na nkama moko kati na libota ya Benjame, ba-oyo bayebi kobunda na mopanga. \p \v 36 Bongo bana ya Benjame bamonaki ete bakweyi penza na bitumba. Nzokande bana ya Isalaele bakosaki kozonga sima mpo ete batiaki elikya na bango epai ya mibali oyo babombamaki pene ya Gibea. \v 37 Mibali yango babimelaki mbala moko Gibea, bapanzanaki mpe babetaki engumba mobimba na mopanga. \v 38 Mibali ya Isalaele mpe bandeko na bango, oyo babombamaki pene ya Gibea, bayokanaki na elembo moko : mibali oyo babombamaki basengeli komatisa wuta na engumba lipata ya milinga na likolo. \v 39 Tango bana ya Isalaele bamonaki lipata wana ya milinga, bapesaki mokongo na bitumba. Kasi mibali ya Benjame babandaki kobeta mpe koboma bana ya Isalaele pene tuku misato. Bakanisaki ete bakobeta bango ndenge basalaki liboso. \v 40 Kasi tango lipata ya milinga ebandaki komata makasi na likolo, bana ya Benjame babalukaki mpe bamonaki engumba na bango mobimba kopela moto mpe komatisa likonzi monene ya lipata ya milinga. \v 41 Bana ya Isalaele babalolaki elongi na bango mpo na kotala mibali ya Benjame. Bongo mibali ya Benjame babangaki mpo ete bamonaki likama oyo ekomeli bango. \v 42 Boye, bapesaki bana ya Isalaele mokongo mpe bakimaki na nzela ya esobe. Kasi bitumba elandaki bango, mpe mibali ya Isalaele, oyo babimaki na engumba Gibea, basilisaki koboma bango nyonso na nzela na bango. \v 43 Bazingelaki bana ya Benjame, balandaki bango na kozanga kopema mpe banyataki bango na makolo kino liboso ya Gibea, na ngambo oyo moyi ebimelaka. \v 44 Kati na bana ya Benjame, mibali nkoto zomi na mwambe bakufaki : bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba. \v 45 Ndambo kati na bango bakimaki na nzela ya esobe, na ngambo ya libanga monene ya Rimoni. Na nzela, bana ya Isalaele babomaki bato nkoto mitano oyo balokotaki na nzela. Balandaki bango lisusu kino na Gideomi mpe babomaki mibali nkoto mibale. \v 46 Motango nyonso ya bana ya Benjame oyo bakufaki na mokolo wana ezalaki nkoto tuku mibale na mitano : bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba mpe bayebaki kobunda na mopanga. \v 47 Mibali nkama motoba kati na bango balongaki kopesa mokongo mpe kokima na nzela ya esobe kino na libanga monene ya Rimoni. Bawumelaki kuna sanza minei. \v 48 Mibali ya Isalaele bazongelaki bato ya libota ya Benjame mpe babomaki na mopanga mibali nyonso elongo na bibwele na bango, kobanda na engumba Gibea kino na bamboka mike. Batumbaki bamboka mike nyonso epai wapi balekaki. \c 21 \s1 Bato ya libota ya Benjame \p \v 1 Mibali ya Isalaele balapaki ndayi, na Mitsipa, na koloba : « Moto moko te kati na biso akopesa lisusu na libala mwana na ye ya mwasi epai ya mobali ya libota ya Benjame. » \v 2 Bato bakendeki na Beteli, bavandaki wana liboso ya Nzambe kino na pokwa. Batombolaki mingongo na bango mpe balelaki makasi. \v 3 Bazalaki koloba : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele ! Mpo na nini likambo ya boye ekomeli Isalaele ? Mpo na nini lelo, libota moko ezangi kati na Isalaele ? » \p \v 4 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato batongaki kuna etumbelo ; batumbaki na likolo na yango bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. \v 5 Bongo bana ya Isalaele batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe ? » Pamba te balapaki ndayi ete moto nyonso oyo akoya te na mayangani yango liboso ya Yawe, na Mitsipa, basengeli koboma ye. \v 6 Bana ya Isalaele bakomaki na mawa mpo na bandeko na bango, bato ya libota ya Benjame ; balobaki : « Mokolo ya lelo, libota moko elongwe na Isalaele. \v 7 Tokosala ndenge nini mpo na kopesa na libala, basi epai ya mibali oyo batikali na bomoi ? Nzokande tosili kolapa ndayi na Kombo na Yawe ete tokopesa te na libala bana na biso ya basi epai ya mibali ya libota ya Benjame. » \p \v 8 Boye, batunaki : « Kati na mabota nyonso ya Isalaele, libota nini eyaki te na mayangani oyo tozalaki na yango liboso ya Yawe, na Mitsipa ? » Bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi ayaki na molako mpe na mayangani. \v 9 Pamba te tango batangaki bato, bamonaki ete kati na Galadi, moto moko te ya Yabeshi azalaki wana. \v 10 Lisanga etindelaki bango basoda nkoto zomi na mibale, bapesaki bango mitindo oyo : « Bokende koboma na mopanga bato nyonso ya Yabeshi ya Galadi elongo na basi mpe bana. \v 11 Tala makambo oyo bokosala : ‹ Bokobebisa mobali nyonso mpe mwasi nyonso oyo ayebi nzoto ya mibali. › » \p \v 12 Kati na bato ya Yabeshi ya Galadi, bamonaki bilenge basi nkama minei oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te ; bazwaki bango mpe bamemaki bango na molako, na Silo, kati na mokili ya Kanana. \p \v 13 Lisanga mobimba etindaki sango ya kimia epai ya bato ya libota ya Benjame, oyo bazalaki na libanga monene ya Rimoni. \v 14 Boye, na tango wana, bato ya libota ya Benjame bazongaki, mpe lisanga mobimba epesaki bango na libala, basi ya Yabeshi ya Galadi oyo batikaki na bomoi. Kasi basi yango bazalaki ya kokoka te mpo na bango nyonso. \p \v 15 Bato bayokaki mawa mpo na bato ya libota ya Benjame, pamba te Yawe alongolaki libota moko kati na mabota ya Isalaele. \v 16 Bakambi ya lisanga balobaki : « Tokosala ndenge nini mpo na kozwa basi ya kopesa na libala mpo na mibali oyo batikali, pamba te basi ya libota ya Benjame basili kokufa ? » \v 17 Balobaki lisusu : « Bato ya libota ya Benjame oyo batikali basengeli kozala na bakitani na bango, mpo ete ekolo elimwa te kati na Isalaele. \v 18 Tokoki te kopesa bango bana na biso ya basi na libala, pamba te, biso bana ya Isalaele, tolapaki ndayi oyo : ‹ Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobalisa mwana na ye ya mwasi na mobali ya libota ya Benjame. › » \p \v 19 Bongo balobaki : « Tala, feti moko ya Yawe ezalaka mibu nyonso, kati na Silo oyo ezali na ngambo ya nor ya Beteli mpe na ngambo ya este ya nzela oyo ekenda longwa na Beteli kino na Sishemi, mpe na ngambo ya sude ya Lebona. » \v 20 Boye bapesaki mitindo oyo epai ya bato ya libota ya Benjame : « Bokende kobombama kati na bilanga ya vino \v 21 mpe botala malamu. Tango bokomona bana basi ya Silo babimi mpo na kobina, bobimela bango wuta na bilanga ya vino, mpe moko na moko kati na bino akanga mwasi moko kati na bana ya Silo mpe azonga na ye na mokili ya Benjame. \v 22 Tango batata na bango to bandeko na bango ya mibali bakoya kolela epai na biso, tokoloba na bango : ‹ Bosalela bango ngolu mpo na biso, pamba te tozwelaki bango basi te na tango ya bitumba. Bozali na bino na ngambo te, pamba te bino te bato bopesaki bana na bino ya basi na libala. › » \p \v 23 Bato ya libota ya Benjame basalaki bongo. Tango bana basi bazalaki kobina, mobali moko na moko akangaki mwana mwasi moko mpe amemaki ye mpo ete azala mwasi na ye. Bongo bazongaki na mabele na bango, batongaki bingumba mpe bavandaki kuna. \v 24 Na tango wana, bana ya Isalaele balongwaki na esika wana mpe bazongaki na bandako na bango, na bituka na bango mpe na mabota ya botata na bango, moto na moto na mabele na ye. \p \v 25 Na mikolo wana, bana ya Isalaele bazalaki na mokonzi te ; moto na moto azalaki kosala makambo oyo azalaki komona ete ezali malamu.