\id ISA Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Ezayi \toc1 Ezayi \toc2 Ezayi \toc3 Ez \mt1 Ezayi \c 1 \p \v 1 Emoniseli oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na mokili ya Yuda mpe ya engumba Yelusalemi tango Oziasi, Yotami, Akazi mpe Ezekiasi bazalaki bakonzi ya Yuda. \ms1 Masakoli na tina na Yuda mpe Isalaele \s1 Isalaele atombokeli Yawe \q1 \v 2 Oh Lola, yoka ! \q2 Mabele, pesa matoyi mpo na koyoka ! \q1 Pamba te Yawe nde azali koloba : \q2 « Nabokoli bana mpe nakolisi bango, \q2 kasi batombokeli Ngai. \q1 \v 3 Ngombe eyebi nkolo na yango, \q2 ane mpe eyebi elielo oyo nkolo na yango \q1 apeselaka yango bilei ; \q2 kasi Isalaele ayebi te, \q2 bato na Ngai basosoli te. » \b \q1 \v 4 Mawa na yo, ekolo ya bato ya masumu, \q2 bato oyo batonda na mabe, \q1 libota oyo esalaka mabe mpe bana mabe ! \q2 Batiki Yawe, \q1 batioli Mosantu ya Isalaele \q2 mpe bapesi Ye mokongo. \b \q1 \v 5 Boni, babeta bino lisusu wapi, \q2 bino bato oyo botingami kaka na botomboki ? \q1 Moto na yo mobimba ezali kobela, \q2 motema na yo mobimba ezali na pasi. \b \q1 \v 6 Longwa na litambe kino na moto, \q2 eloko moko te ezali malamu, \q1 kaka bapota mpe matutu oyo basukola te, \q2 batia kisi te mpe bapakola mafuta te. \b \q1 \v 7 Mokili na bino ebebisami, \q2 bingumba na bino esili kozika na moto ; \q1 bapaya bazali kobebisa bilanga na bino \q2 na miso na bino, \q1 nyonso ebebisami solo, \q2 lokola tango bapanzaka yango na moto ya mobulu. \q1 \v 8 Siona, mboka kitoko, etikali kaka yango moko \q2 lokola mwa ndako moko ya matiti \q1 kati na elanga ya vino, \q2 lokola ndako ya kobombamela \q1 kati na bilanga ya bapasiteki, \q2 lokola engumba oyo ebatelami. \q1 \v 9 Soki Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 abikisaki te ndambo ya bato kati na biso, \q1 tolingaki kokoma lokola engumba Sodome, \q2 tolingaki kokokana na engumba Gomore. \s1 Losambo oyo Yawe andimaka \q1 \v 10 Boyoka Liloba na Yawe, \q2 bino bakambi ya engumba Sodome ! \q1 Boyoka mobeko ya Nzambe na biso, \q2 bino bato ya engumba Gomore ! \q1 \v 11 « Ebele ya bambeka na bino ekosala Ngai nini, » \q2 elobi Yawe ? \q1 « Nasili kolemba bambeka na bino ya kotumba, \q2 bambeka na bino ya bameme ya mibali \q1 mpe mafuta ya bibwele na bino ya mafuta ; \q2 nazali kosepela ata moke te \q1 na makila ya bangombe ya mibali, \q2 ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali. \q1 \v 12 Tango boyaka liboso na Ngai, \q2 nani abengaka bino ete boya kokota \q2 na lopango na Ngai ? \q1 \v 13 Botika komemela Ngai makabo oyo ezanga tina ! \q2 Nazali koyoka malasi na bino ya ansa nkele. \q1 Bafeti na bino ya ebandeli ya sanza, \q2 ya Saba mpe mayangani na bino : \q1 bafeti wana ya mabe, \q2 nazali kokoka yango lisusu te. \q1 \v 14 Motema na Ngai eyini \q2 bafeti na bino wana ya ebandeli ya sanza \q1 mpe bafeti na bino wana ekatama. \q2 Ekomi penza mokumba mpo na Ngai, \q2 nalembi komema yango. \q1 \v 15 Tango bokotombola maboko na bino mpo na kobondela, \q2 nakolongola miso na Ngai likolo na bino ; \q1 ezala soki bosambeli mingi, \q2 nakoyoka bino te, \q2 pamba te maboko na bino etondi na makila. \b \q1 \v 16 Bomisukola mpe bomipetola, \q2 bolongola misala mabe na bino na miso na Ngai ! \q2 Botika kosala mabe ! \q1 \v 17 Boyekola nde kosala malamu, \q2 boluka bosembo, bosunga moto oyo bazali konyokola, \q1 bobundela mwana etike, \q2 bokotela mwasi oyo akufisa mobali ! \b \q1 \v 18 Boya sik’oyo, tosilisa likambo, » \q2 elobi Yawe. \q1 « Ezala masumu na bino ezali motane makasi, \q2 ekokoma pembe lokola mvula ya pembe ; \q1 ata ezali motane lokola ngola, \q2 ekokoma lokola bapwale ya meme. \q1 \v 19 Soki bozwi mokano ya kotosa Ngai, \q2 bokolia mbuma kitoko ya mokili. \q1 \v 20 Kasi soki kaka botie moto makasi mpe botomboki, \q2 bokokufa na mopanga. » \q2 Pamba te monoko ya Yawe nde elobi. \b \q1 \v 21 Tala ndenge nini engumba ya boyengebene ekomi \q2 lokola mwasi ya ndumba ! \q1 Ezalaki liboso engumba etonda na bosembo, \q2 boyengebene ezalaki kovanda kati na yango ; \q2 kasi lelo oyo ekomi kobomba babomi. \q1 \v 22 Palata na yo ekomi bosoto, \q2 vino na yo ya kitoko ekomi mayi-mayi. \q1 \v 23 Bakambi na yo bazali batomboki, \q2 baninga ya miyibi ; \q1 bango nyonso balingaka kaka kanyaka \q2 mpe batonda na lokoso ya lifuti. \q1 Bakotelaka mwana etike te, \q2 mpe likambo ya mwasi oyo akufisa mobali etalaka bango te. \b \q1 \v 24 Yango wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 Elombe ya Isalaele alobi : \q1 Ah, mawa ! Nakosepela na pasi na bino, bino bayini na Ngai ; \q2 mpe nakofutisa bino masumu, bino banguna na Ngai ! \q1 \v 25 Nakotelemela bino, \q2 nakopetola bosoto ya palata na bino \q2 mpe nakolongola salite na bino, \q1 \v 26 nakokomisa lisusu basambisi na bino \q2 malamu lokola na tango ya kala ; \q1 mpe bapesi toli na bino, ndenge ezalaka na ebandeli. \q2 Sima na yango, bakobenga bino lisusu \q1 Engumba ya Bosembo, \q2 Engumba ya Boyengebene. \b \q1 \v 27 Siona ekosikolama na nzela ya boyengebene, \q2 mpe bato na yango oyo bakobongola mitema \q2 bakobika na nzela ya bosembo. \q1 \v 28 Kasi batomboki mpe bato ya masumu bakobebisama, \q2 bato oyo bakobosana Yawe bakosila. \b \q1 \v 29 « Bokoyoka soni mpo na banzete ya terebente \q2 oyo bozalaki kolinga mingi ; \q1 bokoyoka pasi na mitema \q2 mpo na bilanga oyo boponaki ; \q1 \v 30 bokokoma lokola nzete ya terebente \q2 oyo ekawuka makasa. \q1 \v 31 Moto ya makasi akokoma moto ya bolembu, \q2 mpe mosala na ye ekokoma lokola mokalikali ; \q1 bango mibale bakozika nzela moko na moto, \q2 mpe moto oyo koboma yango akozala te. » \c 2 \s1 Ngomba ya Yawe \p \v 1 Tala makambo oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, amonaki na tina na Yuda mpe Yelusalemi : \q1 \v 2 Na mikolo oyo ekoya, \q2 ngomba ya Tempelo ya Yawe \q1 ekolendisama ngwi na songe ya bangomba, \q2 ekoleka bangomba mikuse nyonso na molayi, \q2 mpe bikolo nyonso ekokende kotondana kuna. \q1 \v 3 Bato ya bikolo ebele bakokende kuna mpe bakoloba : \q2 « Boya, tomata na ngomba ya Yawe, \q1 na Tempelo ya Nzambe ya Jakobi. \q2 Akoteya biso banzela na Ye \q1 mpo ete tolanda banzela mike na Ye. » \q2 Pamba te Mobeko ekowuta na Siona, \q2 mpe Liloba na Yawe ekowuta na Yelusalemi. \q1 \v 4 Akozala Mosambisi kati na bikolo, \q2 akokata makambo ya kowelana kati na bato ebele. \q1 Bakotumba mipanga na bango na moto \q2 mpo na kosala bakongo, \q1 mpe makonga na bango mpo na kosala bambeli. \q2 Ekolo moko te ekotombola lisusu mopanga \q1 mpo na kobundisa ekolo mosusu ; \q2 bato bakoyekola lisusu te kobunda bitumba. \q1 \v 5 Oh ndako ya Jakobi, \q2 yaka, tika ete totambola na pole ya Yawe ! \s1 Mokolo ya Yawe \q1 \v 6 Solo, osundolaki bato na Yo, libota ya Jakobi, \q2 mpo ete batondisami na bizaleli ya soloka oyo ewuti na Este ; \q1 bazali kosalela maji lokola bato ya Filisitia, \q2 bazali kosala boyokani elongo na bapagano. \q1 \v 7 Mokili na bango etondi na palata mpe wolo, \q2 bomengo na bango ezali na suka te. \q1 Mokili na bango etondi na bampunda \q2 mpe bakoki ata moke te kotanga bashar na bango ya bitumba. \q1 \v 8 Mokili na bango etondi na banzambe ya bikeko, \q2 bato bakomi kofukamela biloko \q1 oyo esalemi na maboko na bango, \q2 oyo misapi na bango esili kosala. \q1 \v 9 Yango wana, bato bakokitisa mito, \q2 mpe bato ya lokumu bakotonda na soni ; \q2 kolimbisa bango te ! \q1 \v 10 Kimela na madusu ya mabanga, \q2 bombama na putulu ya mabele \q1 liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, \q2 liboso ya nkembo ya lokumu na Ye ! \b \q1 \v 11 Na mokolo wana, moto ya lolendo akokitisa elongi, \q2 bato ya lofundu bakokitisama ; \q2 Yawe kaka nde akonetolama. \q1 \v 12 Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 abongisa mokolo moko mpo na kokitisa \q1 bato nyonso ya lolendo mpe ya lofundu, \q2 bato nyonso oyo bamimatisaka, \q1 \v 13 banzete nyonso ya sedele ya Libani, oyo eleki na molayi mpe na kotombwama, \q2 mpe banzete nyonso ya sheni ya Bashani ; \q1 \v 14 bangomba nyonso ya milayi \q2 mpe bangomba nyonso ya mikuse, \q1 \v 15 bandako nyonso ya milayi, \q2 bamir nyonso ya milayi oyo batonga makasi ; \q1 \v 16 bamasuwa nyonso ya Tarsisi \q2 mpe bomengo na yango nyonso ya kitoko. \q1 \v 17 Lolendo ya moto ekosila \q2 mpe lofundu ya bato ekosuka ; \q1 Yawe kaka nde akonetolama na mokolo wana. \b \q1 \v 18 Banzambe nyonso ya bikeko bakobebisama nye. \q1 \v 19 Bato bakokimela na madusu ya mabanga \q2 mpe na putulu ya mabele \q1 liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, \q2 liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, \q2 tango akotelema mpo na koningisa mokili. \q1 \v 20 Na mokolo wana, \q2 bato bakobwaka epai ya bampuku mpe bangembo \q1 banzambe na bango ya bikeko ya palata \q2 mpe banzambe na bango ya bikeko ya wolo, \q2 oyo basalaki mpo ete bafukamela bango. \q1 \v 21 Bakokima na madusu ya mabanga mpe kati na mabanga \q2 liboso ya nguya ya kanda ya Yawe, \q1 liboso ya nkembo ya lokumu na Ye, \q2 tango akotelema mpo na koningisa mokili. \b \q1 \v 22 Botika kotia elikya na moto \q2 oyo bomoi na ye ezali lokola pema kati na zolo na ye. \q2 Motuya nini azali na yango ? \c 3 \s1 Etumbu ya Yuda mpe ya Yelusalemi \q1 \v 1 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 akomi pene ya kobotola masungi nyonso, \q1 kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda : \q2 lisungi ya bilei mpe lisungi ya mayi ; \q1 \v 2 bilombe mpe basoda ya mpiko, \q2 basambisi mpe basakoli, \q2 bato oyo balobaka makambo oyo ekoya mpe bakambi ; \q1 \v 3 bakonzi ya basoda mpe bato ya lokumu, \q2 bapesi toli, bato mayele ya misala ya maboko \q2 mpe bato oyo basalelaka maji. \q1 \v 4 Nakosala ete bilenge mibali bakoma bakonzi na bango \q2 mpe bana mike bakamba bango. \q1 \v 5 Bato bakokoma konyokolana bango na bango : \q2 moko akonyokola mosusu, \q1 mpe moninga akonyokola moninga na ye mosusu ; \q2 bilenge bakotosa mikolo te, \q2 bato pamba bakotelemela bato ya lokumu ; \q1 \v 6 moko akokanga ndeko na ye ya mobali \q2 kati na ndako ya tata na bango mpe akoloba : \q1 « Yo oyo ozali na kazaka, okozala mokonzi na biso, \q2 kamata mokumba ya libebi oyo na maboko ! » \q1 \v 7 Kasi na mokolo wana, akoganga : \q2 « Te, nazali na ngai monganga te, \q1 mpe nazali na bilei to bilamba te \q2 kati na ndako na ngai ; \q2 bokomisa ngai mokonzi te ! » \b \q1 \v 8 Yelusalemi ezali kotepatepa, \q2 mpe Yuda ekweyi ; \q1 mpo ete maloba mpe misala na bango ezali \q2 ya botomboki liboso ya Yawe, \q2 ezali kotelemela lokumu ya Kombo na Ye. \q1 \v 9 Bilongi na bango ezali kofunda bango ; \q2 bazali kolakisa masumu na bango \q1 ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, \q2 bazali kobomba yango te. \q1 Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo ! \q1 \v 10 Loba na moto ya sembo : « Bolamu ekobila yo, \q2 pamba te okosepela na mbuma ya misala na yo. » \q1 \v 11 Mawa na moto mabe ! \q2 Pasi ezali likolo na ye, \q2 pamba te akozwa lifuti kolanda misala na ye. \q1 \v 12 Bilenge bazali konyokola bato na Ngai, \q2 basi bazali koyangela bango. \q1 Oh bato na Ngai, bakambi na bino babungisi bino nzela, \q2 babimisi bino libanda ya nzela oyo bosengeli kolanda ! \b \q1 \v 13 Yawe atelemi na esambiselo, \q2 atelemi mpo na kosambisa bato. \q1 \v 14 Yawe akosamba elongo na bampaka \q2 mpe bakambi ya bato na Ye : \q1 « Ezali nde bino bato bobebisi elanga na Ngai ya vino ! \q2 Botondisi bandako na bino na biloko \q2 oyo bobotoli epai ya babola ! \q1 \v 15 Mpo na nini bozali konyata bato na Ngai \q2 mpe kotiola bomoto ya babola ; » \q2 elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ? \s1 Lisakoli mpo na basi ya Yelusalemi \q1 \v 16 Yawe alobi : \q2 « Lokola basi ya Siona bazali lofundu, \q1 lokola batambolaka mapeka likolo \q2 mpe balalisaka miso na lofundu, \q1 lokola batambolaka na kodenda malembe-malembe \q2 mpe na kolelisa biloko ya monzele \q2 oyo balataka na makolo na bango, \q1 \v 17 Yawe akokomisa mito ya basi ya Siona mapalata \q2 mpe akotika bango bolumbu. » \m \v 18 Na mokolo wana, Nkolo akolongola bango biloko na bango oyo basalelaka monzele : basheneti oyo balataka na makolo mpe babiju ya talo oyo ezalaka lokola moyi mpe sanza ; \v 19 biloko ya matoyi, basheneti oyo balataka na maboko, bavwale, \v 20 bitendi oyo bakangaka na mito, basheneti, mikaba, milangi ya malasi, bakisi ya kokangela nzoto, \v 21 bapete ya mosapi, bapete ya zolo, \v 22 bilamba ya feti, banzambala oyo etika nzoto, bakazaka, basakosi ya mike, \v 23 bilamba oyo emonisaka nzoto, bilamba ya lino, maputa mpe bitambala. \q1 \v 24 Na esika ya solo kitoko ya malasi, ekozala nde solo mabe ; \q2 na esika ya mokaba, ekozela nde singa ; \q1 na esika ya suki bakanga kitoko na moto, ekozala nde libandi ; \q2 na esika ya bilamba ya talo, ekozala nde bilamba ya saki ; \q2 na esika ya elongi kitoko, ekozala nde elongi mabe. \q1 \v 25 Mibali na bino bakokufa na mipanga, \q2 basoda na bino ya mpiko bakokufa na bitumba. \q1 \v 26 Bikuke ya Siona ekolela mpe ekozala na matanga ; \q2 boye Siona ekokelela mpe ekovanda na mabele. \c 4 \q1 \v 1 Na mokolo wana, \q2 basi sambo bakokangama na mobali moko mpe bakoloba : \q1 « Tokomileisa biso moko \q2 mpe tokomilatisa biso moko ; \q1 yo, ndima kaka ete tobengama na kombo na yo ! \q2 Longola soni na biso ! » \s1 Nkembo ya Yelusalemi ekoya \p \v 2 Na mokolo wana, nkona ya Yawe ekokoma kitoko mpe nkembo, bongo mbuma ya mabele ekosala lokumu mpe nkembo, ya ndambo ya bana ya Isalaele oyo babiki. \v 3 Bato oyo bakotikala na Siona mpe ba-oyo bakovanda na Yelusalemi bakobengama basantu : bango nyonso oyo bakombo na bango ekomama kati na bato oyo batikali na bomoi na Yelusalemi. \v 4 Yawe akolongola botutu ya basi ya Siona, akopetola Yelusalemi oyo ekomaki mbindo na bilembo ya makila, na nzela ya molimo ya kosambisa mpe ya moto. \v 5 Boye, Yawe akokela na likolo ya ngomba mobimba ya Siona mpe na likolo ya bato oyo basanganaka kuna : lipata na tango ya moyi, mpe kongenga ya moto na tango ya butu. Bongo na likolo na nyonso, nkembo na Yawe ekozipa bango. \v 6 Ekozala lokola ndako ya matiti oyo epesaka pio na tango ya molunge ya moyi makasi, ekimelo mpe ebombamelo na tango ya mopepe makasi mpe na tango ya mvula. \c 5 \s1 Loyembo ya elanga ya vino \q1 \v 1 Nakoyemba loyembo mpo na molingami na ngai, \q2 loyembo ya molingami na ngai mpo na elanga na ye ya vino. \q1 Molingami na ngai azalaki na elanga moko ya vino \q2 kati na mabele kitoko oyo ezalaka na mopanzi ya ngomba ; \q1 \v 2 abalolaki mabele, alongolaki mabanga, \q2 mpe alonaki vino ya kitoko koleka ; \q1 atongaki kuna ndako molayi ya bakengeli \q2 mpe atimolaki ekamolelo ya vino. \q1 Akanisaki ete akobuka bambuma ya vino ya kitoko, \q2 kasi ebotelaki ye bambuma ya mabe ! \q1 \v 3 Sik’oyo, bino bavandi ya Yelusalemi, bato ya Yuda, \q2 bokata makambo kati na ngai mpe elanga na ngai ya vino ! \q1 \v 4 Nasala penza eloko nini, mpo na elanga na ngai ya vino, \q2 oyo natikala nanu kosalela yango te ? \q1 Mpo na nini eboteli ngai bambuma ya mabe, \q2 tango ngai nakanisaki ete ekobotela ngai bambuma ya malamu ? \b \q1 \v 5 Sik’oyo, nakoloba na bino makambo \q2 oyo nakosala na elanga na ngai ya vino : \q1 Nakokweyisa lopango na yango, mpe ekobebisama ; \q2 nakotobola madusu kati na bamir na yango, \q2 mpe baleki nzela bakokoma konyata-nyata yango. \q1 \v 6 Nakokomisa yango esobe : \q2 kati na yango, bakolongola lisusu te, \q1 ezala mabanga to matiti ; \q2 bongo banzube mpe basende ekokola kuna. \q1 Nakopesa mitindo na mapata \q2 ete enokisela yango lisusu mvula te. \q1 \v 7 Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 ezali nde libota ya Isalaele, \q1 mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. \q2 Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ; \q2 makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi. \s1 Pasi mpe kosambisama \q1 \v 8 Mawa na bino bato oyo bobakisaka ndako likolo ya ndako, \q2 elanga pembeni ya elanga, \q2 kino bokangaka bisika nyonso mpe botikalaka kaka bino moko na mokili ! \q1 \v 9 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobaki na ngai : \q2 « Solo, bandako minene ekotikala pamba, \q2 bandako kitoko ekozanga bato ya kovanda kati na yango. \q1 \v 10 Pamba te elanga ya vino ya ba-ekitare mibale \q2 ekobimisa kaka bisangala minei ya vino, \q1 bakilo nkama mibale na tuku mibale ya milona ya ble \q2 ekobimisa kaka bakilo tuku mibale na mibale. » \b \q1 \v 11 Mawa na bato oyo balamukaka na tongo-tongo \q2 mpo na kowumela liboso ya masanga ya vino kino na butu, \q2 kino tango bakolangwa masanga ! \q1 \v 12 Bazali na mandanda, banzenze, masanga ya vino, \q2 bambunda mike mpe baflite mpo na kosepelisa bafeti na bango, \q1 kasi bakanisaka te mosala na Yawe \q2 mpe bazalaka na limemia te mpo na misala ya maboko na Ye. \q1 \v 13 Yango wana, bato na Ngai bakokende na bowumbu \q2 mpo na kozanga boyebi ; \q1 bato na bango ya lokumu bakokufa na nzala, \q2 mpe bato pamba bakokufa na posa ya mayi. \q1 \v 14 Boye, mboka ya bakufi ekoyoka nzala makasi \q2 mpe ekofungola monoko na yango makasi ; \q1 bato ya lokumu elongo na bato pamba ya engumba bakokita kuna nzela \q2 moko mpe na loyenge na bango. \q1 \v 15 Moto akokitisama, \q2 bato ya mokili bakoyokisama soni, \q2 mpe bilongi ya bato ya lolendo ekotala na se. \q1 \v 16 Kasi Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 akonetolama na nzela ya bosembo na Ye, \q1 mpe Nzambe Mosantu akolakisa bosantu na Ye \q2 na nzela ya boyengebene na Ye. \q1 \v 17 Bameme ekokoma kolia matiti \q2 lokola nde ezali kati na elanga na yango moko, \q2 bapaya bakozwa bomengo oyo bazwi bakotika. \b \q1 \v 18 Mawa na bato oyo babendaka masumu \q2 na basinga ya makambo ya lokuta, \q2 mpe mabe lokola nde bazali kobenda shario na basheni ! \q1 \v 19 Mawa na bato oyo balobaka : \q2 « Tika ete Nzambe asala noki, \q1 tika ete asala na lombangu mosala na Ye \q2 mpo ete tomona yango ! \q1 Tika ete mabongisi ya Mosantu ya Isalaele ebelema mpe ekokisama \q2 mpo ete tokoka koyeba yango ! » \q1 \v 20 Mawa na bato oyo babengaka mabe malamu \q2 mpe malamu mabe, \q1 oyo bamonaka molili lokola pole \q2 mpe pole lokola molili, \q1 oyo bamonaka bololo lokola elengi \q2 mpe elengi lokola bololo ! \q1 \v 21 Mawa na bato oyo bamimonaka \q2 lokola bato ya bwanya na miso na bango moko, \q1 mpe na bato oyo bamimonaka \q2 lokola bato ya mayele na miso na bango moko ! \q1 \v 22 Mawa na bato oyo bakenda sango \q2 ya komela vino mpe ya kosangisa masanga ya makasi : \q1 \v 23 bazwaka kanyaka mpo na kolongisa moto mabe \q2 mpe bazangisaka na moto ya sembo bosembo na ye ! \b \q1 \v 24 Yango wana, ndenge ndemo ya moto ezikisaka matiti, \q2 mpe ndenge matiti ya kokawuka esilaka na moto, \q1 ndenge wana mpe misisa na bango ekopola \q2 mpe bafololo na bango ekopumbwa lokola putulu, \q1 pamba te babwakaki Mobeko na Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 mpe batiolaki liloba ya Mosantu ya Isalaele. \b \q1 \v 25 Yango wana, Yawe atombokeli bato na Ye, \q2 asemboli loboko na Ye mpe abeti bango ; \q1 bangomba eningani, \q2 bibembe na bango etondi lokola bafulu na balabala. \q1 Kasi ata bongo, kanda na Ye ekiti kaka te, \q2 loboko na Ye etikali kaka ya kosembolama. \q1 \v 26 Yawe atomboli bendele \q2 mpo na bikolo oyo ezali mosika, \q1 azali kobeta piololo mpo na kobenga \q2 bato oyo bazali na suka ya mokili : \q2 tala bango wana, bazali koya na lombangu mpe noki ! \q1 \v 27 Moko te kati na bango asili kolemba nzoto to abeti libaku, \q2 moko te azali konimba to kolala pongi. \q1 Moko te alongoli mokaba na ye na loketo, \q2 singa moko te ya basapato na bango etikali kokatana. \q1 \v 28 Bambanzi na bango ezali songe, \q2 batolotolo na bango nyonso ebendana makasi ; \q1 makolo ya bampunda na bango ezali lokola mabanga, \q2 bapine ya bashar na bango ezali lokola mopepe makasi. \q1 \v 29 Koganga na bango ezali lokola koganga ya bankosi : \q2 bagangaka lokola bana nkosi, \q1 bagangaka soki bakangi nyama na bango, \q2 bamemaka yango na esika ya kimia, \q2 mpe moto moko te akokaka kobotola bango yango. \b \q1 \v 30 Na mokolo wana, bakoganga likolo na bango \q2 lokola makelele ya ebale monene. \q1 Mpe soki moto atali kati na mokili, \q2 akomona molili mpe minyoko : \q2 pole ekozipama na se ya mapata. \c 6 \s1 Kobengama ya Ezayi \p \v 1 Na mobu oyo mokonzi Oziasi akufaki, namonaki Yawe avandi na Kiti moko ya bokonzi, etombwama makasi, bongo basonge ya nzambala na Ye etondisaki Tempelo. \v 2 Ba-anjelu oyo babengaka baserafe batelemaki na likolo na Ye ; moko na moko azalaki na mapapu motoba : mapapu mibale mpo na kozipa elongi, mibale mpo na kozipa makolo mpe mibale mpo na kopumbwa. \v 3 Serafe moko na moko azalaki koganga na mosusu : \q1 « Bule, Bule, Bule, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! \q1 Mokili mobimba etondi na nkembo na Ye ! » \m \v 4 Na makelele ya mingongo na bango, mabaya oyo esimbaka bikuke ekomaki koningana, mpe Tempelo etondaki na milinga. \v 5 Nalobaki : \q1 « Mawa na ngai ! Nabebi na ngai, \q2 pamba te nazali moto ya bibebu ya mbindo, \q1 navandaka kati na bato oyo bazali na bibebu ya mbindo, \q2 mpe miso na ngai emoni Mokonzi, Yawe, Mokonzi ya mampinga ! » \m \v 6 Moko kati na baserafe asimbaki, na loboko na ye, likala ya moto oyo azwaki na etumbelo na bisimbelo, apumbwaki mpe ayaki epai na ngai ; \v 7 atutisaki likala yango na monoko na ngai mpe alobaki : \q1 « Tala, lokola likala oyo etuti bibebu na yo, \q2 mabe na yo esili kolongwa, \q2 masumu na yo esili kolimbisama. » \m \v 8 Bongo, nayokaki mongongo na Nkolo koloba : \pi1 — Nakotinda nani ? Nani akokende mpo na biso ? \p Nazongisaki : \pi1 — Ngai oyo, tinda ngai ! \p \v 9 Yawe alobaki na ngai : \pi1 — Kende koloba na bato oyo : \q1 « Boyoka na bino, kasi bokososola te ; \q2 botala na bino, kasi bokomona te ! \q1 \v 10 Komisa bato oyo mitema makasi, \q2 kanga matoyi na bango mpe zipa miso na bango \q1 mpo ete bamona te na miso na bango, \q2 bayoka te na matoyi na bango, \q1 basosola te na mitema na bango, \q2 babongwana te mpe babika te ! » \p \v 11 Boye nalobaki : \pi1 — Oh Nkolo, kino tango nini ? \p Azongisaki : \pi1 — Kino bingumba ekobebisama mpe ekotikala lisusu na bato te, kino tango bato bakotikala lisusu na bandako te, mpe bilanga ekobebisama mpe bakosakanela yango ; \v 12 kino tango Yawe akotinda bato mosika, kino tango bakobosana penza mokili libela. \pi1 \v 13 Soki ndambo moko kati na bandambo zomi ya bato ekotikala na mokili, bakobebisama na moto. Kasi ndenge terebente mpe nzete oyo babengaka sheni etikaka misisa na yango soki bakati yango, ndenge wana mpe nkona ya bule ekotika misisa na mokili. \c 7 \s1 Emanwele \p \v 1 Tango Akazi, mwana mobali ya Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akomaki mokonzi ya Yuda, Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bakendeki kobundisa Yelusalemi, kasi bakokaki kolonga yango te. \p \v 2 Boye, bapesaki sango na ndako ya Davidi : « Bato ya Siri basali boyokani elongo na bato ya Efrayimi. » \p Motema ya Akazi mpe mitema ya bato na ye nyonso eninganaki makasi ndenge kaka banzete ya zamba eninganaka na tango ya mopepe. \v 3 Boye, Yawe alobaki na Ezayi : « Kende, yo elongo na Sheari-Yashubi, mwana na yo ya mobali, kokutana na Akazi na suka ya nzela ya mayi oyo ekenda kino na liziba monene, na nzela ya bilanga ya moto oyo atiaka balangi na bilamba ; \v 4 loba na ye : ‹ Kitisa motema, zala na kimia, kobanga te ; tika ete motema na yo etungisama te mpo na bakoni mibale oyo ezali kopela : kanda makasi ya Retsini, moto ya Siri, mpe ya mwana mobali ya Remalia ! \v 5 Siri, Efrayimi mpe mwana mobali ya Remalia, basaleli yo likita mpo na kobebisa yo ; bazali koloba : \v 6 ‘ Tika ete tobundisa Yuda, tokata yango na biteni, tokabola yango biso na biso mpe totia mwana mobali ya Tabeli lokola mokonzi na yango. ’ \v 7 Nzokande, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q1 Ekotikala kosalema te, \q2 ekotikala kokokisama te ! \q1 \v 8 Pamba te moto ya Siri ezali Damasi, \q2 mpe moto ya Damasi ezali na yango kaka Retsini. \q1 Etikali kaka mibu tuku motoba na mitano, \q2 Efrayimi ekobebisama \q1 mpe ekozala lisusu na molongo ya mabota te. \q1 \v 9 Moto ya Efrayimi ezali Samari, \q2 mpe moto ya Samari ezali kaka mwana mobali ya Remalia. \q1 Soki botelemi ngwi te na kondima na bino, \q2 bokolonga te kotelema liboso na bango ! › » \p \v 10 Yawe alobaki lisusu na Akazi : \pi1 \v 11 — Senga elembo moko epai na Yawe, Nzambe na yo, ezala kati na mokili oyo eleki na bozindo to oyo eleki likolo. \p \v 12 Kasi Akazi alobaki : \pi1 — Nakosenga te, nakoki komeka Yawe te. \p \v 13 Boye Ezayi alobaki : \pi1 — Boyoka sik’oyo, bino libota ya Davidi ! Ekoki kaka te mpo na bino kolembisa mitema ya bato ? Boni, bolingi lisusu kolembisa motema ya Nzambe na ngai ? \v 14 Ye moko Nkolo akopesa bino elembo : moseka akokoma na zemi mpe akobota mwana mobali, akopesa Ye Kombo « Emanwele. » \v 15 Mwana yango akomela kaka miliki mpe mafuta ya nzoyi kino tango akoyeba koboya mabe mpe kopona bolamu. \v 16 Kasi liboso ete mwana yango ayeba koboya mabe mpe kopona bolamu, mikili ya bakonzi mibale oyo ozali kobanga ekobebisama. \v 17 Yawe akoyeisela yo, bato na yo mpe libota ya tata na yo mikolo oyo etikala nanu kozala te wuta Efrayimi ekabwana na Yuda : ezali nde mokonzi ya Asiri. \p \v 18 Na mokolo wana, Yawe akobeta piololo mpo na kobenga nzinzi wuta na miluka ya Ejipito mpe banzoyi oyo ezalaka na mokili ya Asiri ; \v 19 ekoya mpe ekovanda kati na mabwaku ya mozindo mpe na madusu ya mabanga, na banzete nyonso ya mike-mike mpe na matiti nyonso. \v 20 Na mokolo wana, Yawe akosalela jileti oyo akodefa na ngambo mosusu ya Efrate, elingi koloba mokonzi ya Asiri, mpo na kokokola suki ya moto na yo, suki ya makolo na yo mpe mandefu na yo. \v 21 Na mokolo wana, moko na moko akobokola mwana ngombe ya mwasi mpe bameme to bantaba mibale ya basi. \v 22 Lokola bibwele wana ekopesaka miliki ebele, akolia manteka ; mpe bato nyonso oyo bakotikala na mokili bakolia mafuta ya nzoyi. \p \v 23 Na mokolo wana, esika nyonso oyo ezalaki na banzete ya vino nkoto moko oyo ezalaki na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko ekotonda na basende mpe na banzube. \v 24 Bato bakokota kuna na matolotolo mpe na bambanzi, pamba te mokili ekotonda na basende mpe na banzube. \v 25 Bato bakoleka lisusu te na bangambo nyonso oyo bazalaki kosala bilanga na kongo, pamba te bakokoma kobanga basende mpe banzube ; ngombe ekokoma kolia kuna, mpe meme ekonyata-nyata mabele na yango. \c 8 \s1 Ezayi mpe bana na ye lokola bilembo \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : « Kamata etando monene ya libanga mpe salela ekomeli mpo na kokoma makambo oyo na likolo na yango : Maher-Shalal-Hash-Baz (pene bomengo ya bitumba, pene kobebisama). » \p \v 2 Nabengaki Nganga-Nzambe Iri mpe Zakari, mwana mobali ya Yeberekia, mpo ete bazala batatoli na ngai ya sembo. \v 3 Nakendeki epai ya mwasi mosakoli ; akomaki na zemi mpe abotaki mwana mobali. Yawe alobaki na ngai : « Pesa ye kombo Maher-Shalal-Hash-Baz. \v 4 Liboso ete mwana ayeba ndenge babengaka ‹ Tata na ngai › to ‹ mama na ngai, › bakomema bozwi ya Damasi mpe bomengo ya bitumba ya Samari epai ya mokonzi ya Asiri. » \p \v 5 Yawe alobaki na ngai lisusu : \v 6 « Mpo ete bato oyo basundoli mayi ya Siloe oyo etiolaka na kimia, mpe basepeli na Retsini mpe na mwana mobali ya Remalia, \v 7 Yawe akotindela bango mayi ya nguya mpe mayi ebele lokola mayi ya ebale Efrate : ekozala nde mokonzi ya Asiri elongo na mampinga na ye nyonso. Ekotonda penza meke mpe ekozipa bangambo nyonso. \v 8 Ekokota na Yuda mpe ekozindisa yango kino na kingo ; mpe kopanzana ya mayi yango ekotondisa mokili na yo mobimba, Emanwele. » \q1 \v 9 Bino bikolo, boganga na somo mpe bopalangana ! \q2 Bino bituka nyonso ya mosika, boyoka ! \q1 Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana ! \q2 Bobongama mpo na bitumba mpe bopalangana ! \q1 \v 10 Bosala malamu mabongisi na bino, \q2 kasi ekobebisama ; \q1 boloba oyo bokoki koloba, \q2 kasi eloko moko te ekosalema, \q2 pamba te Nzambe azali elongo na biso ! \s1 Kotosa kaka Yawe \p \v 11 Yawe alobaki na ngai, tango asimbaki ngai na loboko na Ye ya nguya mpe akebisaki ngai ete nalanda te nzela ya bato oyo : \q1 \v 12 « Bobengaka likita te eloko nyonso \q2 oyo bato babengaka likita ; \q1 bobangaka te oyo bango babangaka, \q2 boyokela yango somo ata moke te. \q1 \v 13 Kaka Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 nde bosengeli komona lokola Mosantu, \q1 Ye kaka nde bosengeli kokumisa, \q2 Ye kaka nde bosengeli koyoka somo. \q1 \v 14 Akozala lokola Esika ya bule ; \q2 kasi mpo na bandako mibale ya Isalaele, \q1 akozala lokola libanga oyo ebetisaka bato mabaku, \q2 lokola libanga monene oyo ekweyisaka bato ; \q1 bongo mpo na bato ya Yelusalemi, \q2 akozala motambo mpe monyama. \q1 \v 15 Mingi kati na bango bakobeta mabaku, \q2 bakokweya mpe bakobukana, \q1 bakokangama na motambo, \q2 mpe bakozwa bango. » \p \v 16 Bomba lisakoli oyo ete eyebana te, kangisa mobeko oyo kati na bayekoli na ngai. \v 17 Nakotalela Yawe oyo abombi elongi na Ye, oyo apesi ndako ya Jakobi mokongo ; nakotia elikya na ngai kati na Ye. \v 18 Ngai elongo na bana oyo Yawe apesi ngai, tozali bilembo mpe bandakisa kati na Isalaele, kowuta na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na ngomba Siona. \b \p \v 19 Soki bato balobi na bino : « Bokende kotalisa makambo epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, oyo balobaka-lobaka lokola bandeke. Boni, bato baluka banzambe na bango te ? Mpo na nini te babelela bakufi mpo na bato ya bomoi ? » \v 20 Na mobeko mpe na lisakoli ! Soki bakoloba bongo te, bakomona tongo te. \v 21 Bakokatisa mokili, na pasi mpe na nzala ; mpe tango bakokoma na nzala, bakokoma kanda-kanda, bakotala likolo mpe bakolakela mokonzi mpe Nzambe na bango mabe. \v 22 Mpe tango bakotala mabele, bakomona kaka pasi ya makasi, molili mpe molili ya somo makasi ; mpe bakotindika bango kati na molili ya makasi. \c 9 \s1 Kolongwa na molili mpe kokota na pole \p \v 1 Nzokande, molili ekozala lisusu te mpo na bato oyo bazalaki na pasi. Na tango ya kala, Nzambe asambwisaki mokili ya Zabuloni mpe ya Nefitali ; kasi na mikolo oyo ekoya, Nzambe akopesa lokumu na Galile ya bapagano, na nzela ya ebale monene, na ngambo mosusu ya Yordani. \q1 \v 2 Bato oyo bazalaki kotambola kati na molili \q2 bamoni pole makasi ; \q1 ba-oyo bazalaki kovanda kati na mokili ya bakufi, \q2 pole engengeli bango. \q1 \v 3 Okomisaki bango ekolo monene, \q2 obakisaki esengo na bango. \q1 Bazali kosepela liboso na Yo \q2 ndenge basepelaka tango babukaka milona, \q1 ndenge mibali basepelaka \q2 tango bakabolaka bomengo ya bitumba. \b \q1 \v 4 Pamba te ekangiseli oyo ezalaki na likolo na bango, \q2 nzete oyo ezalaki na mapeka na bango \q1 mpe fimbu oyo na nzela na yango bazalaki konyokola bango, \q2 Yo, obukaki yango lokola na mokolo ya kokweya ya Madiani. \q1 \v 5 Basapato nyonso ya basoda \q2 oyo lokito na yango eningisaka mabele, \q1 mpe bilamba nyonso oyo etondaki na makila, \q2 ekobwakama na moto \q2 mpo ete ezika makasi. \b \q1 \v 6 Pamba te mwana mobali moko abotami mpo na biso, \q2 mwana mobali moko apesameli biso, \q1 mpe bokonzi ezali na likolo ya mapeka na ye ; \q2 bakobenga ye : Mosungi ya kokamwa, Nzambe ya nguya, \q2 Tata ya seko, Mokonzi ya kimia. \q1 \v 7 Bokonzi na ye ekokende mosika penza, \q2 mpe kimia na ye ekozala na suka te. \q1 Akovanda na kiti ya bokonzi ya Davidi, \q2 akozala mokonzi ya mokili na ye, \q1 akolendisa mpe akokamba yango \q2 na bosembo mpe na boyengebene, \q1 wuta na tango oyo kino libela na libela. \q2 Yango nde makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 akosala na bolingo makasi na Ye. \s1 Kanda ya Yawe mpo na Isalaele \q1 \v 8 Nkolo atindaki liloba mpo na kotelemela Jakobi, \q2 mpe liloba yango ekomeli Isalaele. \q1 \v 9 Bato nyonso bakoyeba yango, \q2 Efrayimi mpe bavandi ya Samari, \q2 oyo balobaka na lofundu mpe na lolendo ya mitema : \q1 \v 10 « Ata babiliki ekweyi, \q2 tokotonga lisusu na mabanga bakata ; \q1 ata bakati banzete ya sikomori, \q2 tokotia na esika na yango banzete ya sedele. » \q1 \v 11 Kasi Yawe alendisaki bayini ya Retsini \q2 mpo na kobundisa bango \q1 mpe apelisaki mitema ya banguna na bango \q2 mpo ete batombokela bango. \q1 \v 12 Bato ya Siri na liboso, mpe bato ya Filisitia na sima, \q2 bapasolaki Isalaele mpe baliaki ye na lokoso. \q1 Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, \q2 loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama. \b \q1 \v 13 Kasi atako bongo, bato bazongaki kaka te \q2 epai na Yawe oyo abetaki bango, \q2 mpe balukaki te Yawe, Mokonzi ya mampinga. \q1 \v 14 Yango wana, kaka na mokolo moko, \q2 Yawe akokata, kati na Isalaele, \q2 moto mpe mokila, lindalala mpe nzete oyo ebotaka na mayi. \q1 \v 15 Bampaka mpe bato ya lokumu, bango nde moto ; \q2 mpe basakoli ya lokuta, bango nde mokila. \q1 \v 16 Bakambi ya bato babungisi bato na bango nzela, \q2 mpe bato oyo balandaka bango bakomi kotelengana. \q1 \v 17 Yango wana, Nkolo akosepela na bilenge te, \q2 akoyokela bana bitike mpe basi bakufisa mibali mawa te, \q1 pamba te bango nyonso bazali kotiola Nzambe, \q2 bazali kosala mabe, \q2 mpe minoko nyonso ezali kobimisa maloba ya bozoba. \b \q1 Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki te, \q2 loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama. \b \q1 \v 18 Solo, mabe etumbaka lokola moto \q2 oyo ezikisaka basende mpe banzube, \q1 ezikisaka bazamba minene \q2 mpe ematisaka makonzi ya milinga. \q1 \v 19 Na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 mokili eziki na moto, \q1 mpe bato bakomi lokola mafuta na moto. \q2 Moto moko te akobikisa ndeko na ye. \q1 \v 20 Na ngambo ya loboko ya mobali, \q2 bakobotola bato biloko, \q1 kasi bato bakozala kaka na nzala ; \q2 na ngambo ya loboko ya mwasi, bakolia, \q1 kasi bato bakotonda kaka te ; \q2 moko na moko akolia mosuni ya loboko na ye : \q1 \v 21 Manase akolia Efrayimi, \q2 mpe Efrayimi akolia Manase ; \q1 bango mibale bakosangana mpe bakobalukela Yuda. \q2 Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, \q2 loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama. \b \b \c 10 \q1 \v 1 Mawa na bato oyo basalaka mibeko ezanga bosembo, \q2 na ba-oyo bakomaka mibeko oyo enyokolaka bato ! \q1 \v 2 Bapimelaka bato pamba bosembo \q2 mpe babotolaka makoki ya babola, \q1 mpo na kobotola biloko ya basi bakufisa mibali \q2 mpe ya bana bitike. \q1 \v 3 Bokosala nini na mokolo ya kosambisama, \q2 tango pasi ekowuta mosika ? \q1 Bokokimela epai ya nani mpo ete asunga bino ? \q2 Esika nini bokobomba bomengo na bino ? \q1 \v 4 Eloko kaka bokotikala na yango : \q2 kokitisa elongi na se elongo na bato ya boloko \q1 to kokufa elongo na bato oyo babomi. \q2 Kasi atako bongo, kanda ya Yawe ekitaki kaka te, \q2 loboko na Ye etikalaki kaka ya kosembolama. \s1 Nzambe asambisi Asiri \q1 \v 5 Mawa na Asiri, lingenda ya kanda na Ngai ; \q2 nzete oyo ezali na loboko na ye \q2 ezali nde esalelo ya kanda na Ngai ! \q1 \v 6 Natindi ye mpo ete atelemela \q2 ekolo oyo eyebi Yawe te \q1 mpe bato oyo bapesaka Ngai kanda, \q2 mpo ete abebisa mpe abotola biloko na bango \q2 mpe anyata bango lokola potopoto ya balabala. \q1 \v 7 Kasi mokonzi ya Asiri amonaka yango bongo te, \q2 akanisaka yango bongo te ; \q2 akanisaka kaka koboma mpe kobebisa bikolo ebele. \q1 \v 8 Azali koloba : \q2 « Boni, bakambi na ngai bazali bango nyonso \q2 ndenge moko na bakonzi te ? \q1 \v 9 Engumba Kalino ekweyaki te lokola engumba Karikemishi ? \q2 Engumba Amati, lokola engumba Aripadi te ? \q2 Engumba Samari, lokola engumba Damasi te ? \q1 \v 10 Soki loboko na Ngai esukisaki bikolo \q2 oyo esambelaka banzambe ya bikeko, \q1 bikolo oyo ezalaki na banzambe ya bikeko ebele \q2 koleka Yelusalemi mpe Samari, \q1 \v 11 nakokoka te penza kosala Yelusalemi \q2 elongo na banzambe na yango ya bikeko \q2 ndenge nasalaki Samari mpe banzambe na yango ya bikeko ? » \p \v 12 Tango Yawe akosilisa mosala na Ye ya kotelemela ngomba Siona mpe Yelusalemi, akoloba : « Nakopesa etumbu na mokonzi ya Asiri mpo na lolendo ya motema na ye mpe mpo na lofundu ya etaleli na ye. \v 13 Pamba te azalaki koloba : \q1 ‹ Nazalaki kosala makambo oyo nyonso \q2 na makasi mpe na bwanya na ngai moko, \q1 pamba te nazali mayele ; \q2 napusaki bandelo ya bikolo, \q1 nabotolaki bomengo na bango lokola elombe, \q2 nalongaki bakonzi na bango. \q1 \v 14 Loboko na ngai ekamataki bomengo na bango \q2 ndenge bakamataka zala ya ndeke ; \q1 mpe ndenge bato balokotaka maki batika, \q2 ndenge wana mpe ngai nalokotaki mokili mobimba : \q1 moko te eningisaki lipapu \q2 to efungolaki monoko mpo na kobeta piololo. › » \b \q1 \v 15 Boni, epasola ekoki solo komimatisa \q2 liboso ya moto oyo asalelaka yango ; \q1 si ya mabaya ekoki solo komikumisa \q2 liboso ya moto oyo asalelaka yango ? \q1 Bosila komona fimbu koningisa moto oyo asalelaka yango \q2 to etape ya nzete kotombola nzete na yango ? \q1 \v 16 Yango wana Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 akotindela basoda na ye ya mbinga \q1 bokono oyo ekondisaka nzoto. \q2 Na se ya nkembo na Ye, \q2 bakopelisa moto lokola fulu ya moto. \q1 \v 17 Pole ya Isalaele ekokoma moto, \q2 Mosantu ya Isalaele akopela lokola moto ; \q1 kaka na mokolo moko, akotumba mpe akozikisa \q2 basende mpe banzube ya Asiri, \q1 \v 18 akozikisa nye bazamba na yango ya minene \q2 mpe bilanga na yango ya kitoko \q2 ndenge mobeli akondaka. \q1 \v 19 Kati na bazamba na yango, ekotikala kaka banzete moke \q2 oyo ata mwana moke akokoka kotanga motango na yango. \s1 Batikali ya Isalaele \p \v 20 Na mokolo wana, batikali ya Isalaele mpe bato ya libota ya Jakobi oyo bakobika bakomipesa lisusu te na maboko ya moto oyo azalaki kobeta bango ; kasi bakomipesa na solo epai na Yawe, Mosantu ya Isalaele. \v 21 Ndambo ya bakitani ya Jakobi bakozonga epai ya Nzambe na nguya. \v 22 Oh Isalaele, ata bato na yo bazali ebele lokola zelo ya ebale monene, ndambo kaka nde bakozonga ; pamba te Nzambe azwi mokano ya kobebisa bato, akomema bosembo lokola mpela. \v 23 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, akokokisa kobebisama oyo akanaki mpo na mokili mobimba. \p \v 24 Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q1 « Oh bato na Ngai, bino oyo bovandi kati na Siona, \q2 bozala na somo te ya bato ya Asiri \q1 oyo bazali kobeta bino fimbu \q2 mpe kotombola nzete mpo na kobeta bino \q2 ndenge bato ya Ejipito bazalaki kosala. \q1 \v 25 Kala mingi te, kanda na Ngai epai na bino ekosila \q2 mpe kanda na Ngai ya makasi ekobalukela bango \q2 mpo na kobebisa bango. » \p \v 26 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akotombola fimbu mpo na kobeta Asiri ndenge abetaki Madiani na libanga ya Orebi. Mpe lisusu, akotombola nzete na Ye likolo ya ebale monene lokola na Ejipito. \q1 \v 27 Na mokolo wana, \q2 bakolongola mokumba na likolo ya mapeka na bino \q1 mpe na ekangiseli na bakingo na bino. \q2 Tango mokumba yango ekolongwa, \q2 ekotika esika na bomengo. \q1 \v 28 Tala bango wana bazali koya na Ayati, \q2 bazali koleka na lubwaku ya Migironi, \q2 babombi biloko na bango na Mikimasi. \q1 \v 29 Baleki kati na bangomba mpe balobi : \q2 « Tokotonga molako mpe tokolekisa butu na Geba. » \q1 Bato ya Rama bakomi kolenga na somo, \q2 mpe bato ya Gibea, engumba ya mokonzi Saulo, bakimi. \q1 \v 30 Oh bato ya Galimi, boganga makasi ! \q2 Oh Layisi, sala keba ! \q2 Oh engumba Anatoti, mawa na yo ! \q1 \v 31 Bato ya Madimena bakimi, \q2 bato ya Gebimi bazali koluka ekimelo ; \q1 \v 32 Na mokolo ya lelo, bakotelema na Nobi, \q2 bakobeta makofi na bango na ngomba Siona, mboka kitoko, \q2 mpe na ngomba moke ya Yelusalemi. \b \q1 \v 33 Tala, Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 akokata bitape ya banzete na nguya monene, \q1 akokata banzete milayi mpe oyo eleki milayi, \q2 akokomisa yango mikuse. \q1 \v 34 Akokata na epasola banzete nyonso kati na zamba : \q2 Libani ekokweya liboso ya Elombe. \c 11 \s1 Mokonzi ya sika akobimela na Izayi \q1 \v 1 Moto ya nzete ekobima na mobimbi ya Izayi ; \q2 wuta na misisa na ye, Etape moko ekobota mbuma. \q1 \v 2 Molimo na Yawe akowumela na likolo na Ye : \q2 Molimo ya bwanya mpe ya mayele, \q1 Molimo ya toli mpe ya nguya, \q2 Molimo ya boyebi mpe ya kotosa Yawe ; \q1 \v 3 esengo na ye ekozala na kotosa Yawe. \b \q1 Akokata makambo ndenge emonanaka na libanda te \q2 to mpe akozwa mikano te kolanda biyoka-yoka ; \q1 \v 4 kasi akokata makambo ya bato bakelela na bosembo \q2 mpe akozwa mikano ya sembo mpo na babola ya mokili. \q1 Akobeta mokili fimbu na maloba na ye \q2 mpe akoboma bato mabe na pema ya monoko na ye. \q1 \v 5 Bosembo ekozala mokaba na ye, \q2 mpe boyengebene ekozala na loketo na ye \q2 lokola mokaba oyo bamemelaka bibundeli. \b \q1 \v 6 Mbwa ya zamba ekovanda esika moko na mwana meme, \q2 nkoyi ekolala esika moko na mwana ntaba ; \q1 mwana ngombe ya mobali, mwana nkosi mpe banyama ya mafuta ekolia esika moko, \q2 bongo mwana moke nde akoyeisa yango. \q1 \v 7 Ngombe ya mwasi mpe ngombolo ekolia esika moko, \q2 bana na yango mpe ekolala esika moko, \q2 bongo nkosi ekolia matiti lokola ngombe. \q1 \v 8 Mwana moke akosakana pene ya lidusu ya nyoka, \q2 mpe elenge mwana akokotisa loboko na ye na zala ya nyoka. \q1 \v 9 Mabe to kobebisama ekosalema lisusu te \q2 na likolo nyonso ya ngomba na Ngai ya bule, \q1 pamba te mokili ekotonda na boyebi ya Yawe \q2 ndenge mayi etondaka na ebale. \p \v 10 Na mokolo wana, bakitani ya Izayi bakotelema lokola bendele mpo na bikolo, bato ya bikolo ya bapaya bakoya noki epai na bango ; mpe esika na bango ya kopema ekozala na nkembo. \v 11 Na mokolo wana, Nkolo akosembola loboko na Ye na mbala ya mibale mpo na kobikisa ndambo ya bato na Ye oyo babikaki wuta na Asiri, na Ejipito, na Patrosi, na Kushi, na Elami, na Shineari, na Amati mpe na bisanga ya ebale monene. \q1 \v 12 Akotombola bendele mpo na bikolo \q2 mpe akosangisa bana ya Isalaele oyo bazali na bowumbu ; \q1 akosangisa esika moko bato ya Yuda \q2 oyo bapalangana na mokili mobimba. \q1 \v 13 Motema likunya ya Efrayimi ekosila, \q2 mpe banguna ya Yuda bakobebisama ; \q1 Efrayimi akozala lisusu na motema likunya te mpo na Yuda \q2 to mpe Yuda akozala lisusu monguna ya Efrayimi te. \q1 \v 14 Bakosangela elongo bato ya mboka Filisitia \q2 na bangomba mikuse ya ngambo ya weste ; \q1 bakobebisa elongo bikolo ya ngambo ya este, \q2 bakokonza bato ya Edomi mpe ya Moabi, \q2 bongo bato ya Amoni bakokoma bawumbu na bango. \q1 \v 15 Yawe akokawusa mayi ya eteni ya ebale \q2 oyo ekota na mabele ya Ejipito ; \q1 loboko na Ye ekoningisa ebale \q2 mpe akokabola yango na biteni sambo na mopepe makasi \q2 mpo ete bato bakoka kokatisa na makolo. \q1 \v 16 Nzela moko ekosalema mpo na ndambo ya bato na Ye \q2 oyo batikalaki na bomoi wuta na Asiri \q2 ndenge esalemaki tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito. \c 12 \s1 Nzembo mpo na kokumisa Yawe \q1 \v 1 Na mokolo wana, okoloba : \q2 « Oh Yawe, nazali kosanzola Yo, \q1 pamba te ata osilikelaki ngai, \q2 kanda na Yo elongwaki likolo na ngai \q2 mpe obondisaki ngai ! \q1 \v 2 Solo, Nzambe azali lobiko na ngai ; \q2 nakotia elikya na ngai epai na Ye \q1 mpe nakobanga lisusu te. \q2 Nkolo Yawe azali makasi mpe nguya na ngai ; \q2 azali lobiko na ngai. » \q1 \v 3 Yango wana, botoka mayi na esengo \q2 na etima ya lobiko. \q1 \v 4 Na mokolo wana bokoloba : \q2 « Bosanzola Yawe, bobelela Kombo na Ye, \q1 bosakola misala na Ye kati na bikolo \q2 mpe botatola ete Kombo na Ye ezali likolo na nyonso. \q1 \v 5 Boyemba loyembo mpo na Yawe, \q2 pamba te asali makambo ya kokamwa. \q2 Tika ete mokili mobimba eyeba yango ! \q1 \v 6 Bino bato ya Siona, bobeta milolo mpe boyemba loyembo na esengo, \q2 pamba te Mosantu ya Isalaele azali monene kati na bino ! » \c 13 \ms1 Masakoli na tina na bikolo ya bapaya \s1 Maloba ya kosambisa Babiloni \p \v 1 Maloba ya kosambisa Babiloni, oyo Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, azwaki na emoniseli : \q1 \v 2 Botombola bendele likolo ya ngomba oyo ezanga banzete, \q2 boganga epai na bango ; \q1 bopepa bango loboko \q2 mpo ete bakota na bikuke ya bakambi. \q1 \v 3 Napesaki mitindo epai na bato \q2 oyo babulisama mpo na Ngai ; \q1 nabengisaki lisusu bilombe na Ngai, \q2 bato oyo basepelaka na lokumu na Ngai, \q2 mpo na kosilisa kanda na Ngai. \q1 \v 4 Boyoka makelele likolo ya bangomba : \q2 ezali lokola makelele ya bato ebele ! \q1 Boyoka lokito ya makelele ya bikolo : \q2 ezali lokola bikolo esangana esika moko ! \q1 Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 azali kotala mampinga ya basoda oyo bazali \q2 pene ya kokende na etumba. \q1 \v 5 Bawuti na mikili ya mosika, na suka ya likolo ; \q2 Yawe elongo na bisalelo ya kanda na Ye ; \q2 mpo na kobebisa mokili mobimba. \q1 \v 6 Bolela, pamba te mokolo na Yawe ekomi pene, \q2 ekoya lokola kobebisama oyo ewuti na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso. \q1 \v 7 Yango wana, maboko nyonso ekolemba \q2 mpe mitema ya bato nyonso ekobukana. \q1 \v 8 Somo makasi ekokweyela bango, \q2 pasi mpe kobanga ekotika bango te ; \q1 bakobunda-bunda lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. \q2 Bango na bango bakotalana na kokamwa \q2 mpe bilongi na bango ekokoma lokola moto. \q1 \v 9 Tala, mokolo na Yawe ezali koya, \q2 ezali mokolo moko ya pasi, \q1 mokolo ya kotomboka mpe ya kanda makasi \q2 mpo na kobebisa mokili \q2 mpe koboma bato ya masumu kati na yango. \q1 \v 10 Minzoto na likolo mpe minda nyonso oyo ezali pene na yango \q2 ekopesa lisusu pole na yango te : \q1 moyi ekokoma molili tango tongo ekotana, \q2 mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te. \q1 \v 11 Nakopesa etumbu na mokili mpo na mabe na yango, \q2 mpe bato mabe, mpo na masumu na bango. \q1 Nakosukisa lofundu ya bato ya lolendo \q2 mpe nakokitisa lolendo ya banyokoli. \q1 \v 12 Nakosala ete bato bakoma ya koluka lokola wolo ya peto, \q2 lokola wolo ya mboka Ofiri. \q1 \v 13 Yango wana nakolengisa likolo, \q2 mpe mabele ekoningana na bisimbelo na yango \q1 na kanda makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 na mokolo oyo akopelisa kanda na Ye. \b \q1 \v 14 Lokola mboloko oyo bazali kolanda, \q2 lokola bameme oyo ezanga mobateli, \q1 moko na moko akozonga epai ya bato na ye, \q2 moko na moko akokima kino na mboka ya bakoko na ye. \q1 \v 15 Bakotobola na likonga \q2 moto nyonso oyo bakokanga. \q1 Bato nyonso oyo bakozwa, \q2 bakokufa na mopanga. \q1 \v 16 Bakokata-kata bana na bango na biteni na miso na bango, \q2 bakobebisa bandako na bango \q2 mpe bakozwa basi na bango na makasi. \b \q1 \v 17 Tala, nakotelemisa bato ya Medi ete batelemela bango, \q2 bato oyo palata elobelaka bango eloko moko te \q2 mpe basepelaka na bango na wolo te. \q1 \v 18 Boye, tolotolo na bango ekoboma bilenge mibali \q2 mpe bakoyokela mbuma ya libumu mawa te : \q2 liso na bango ekotala bana na mawa te. \q1 \v 19 Nzambe akokweyisa Babiloni, \q2 kongenga ya babokonzi, nkembo ya lolendo ya bato ya Chalide, \q2 ndenge akweyisaki Sodome mpe Gomore. \q1 \v 20 Bato bakotikala kovanda lisusu kuna te \q2 to ekozala lisusu na bato te na milongo nyonso ; \q1 kuna, moto ya Arabi akopika te ndako na ye ya kapo, \q2 mpe babateli bibwele bakopemisa te banyama na bango. \q1 \v 21 Kasi bikelamu ya esobe nde ekokoma kolala kuna ; \q2 bambwa ya zamba nde ekotondisa bandako na yango, \q1 ba-esulungutu ekotonda na bandako, \q2 maligbanga ekokoma kovanda kuna \q2 mpe bantaba ya zamba ekokoma kopumbwa-pumbwa kuna. \q1 \v 22 Banyawu ya zamba ekotonda \q2 na bandako na bango ya makasi, \q1 mpe bambwa ya zamba ekotonda na bandako na bango ya kitoko. \q1 Tango na yango esili kobelema, \q2 mpe mikolo na yango ekopusana lisusu te. \c 14 \s1 Batongi lisusu Isalaele \q1 \v 1 Yawe akoyokela Jakobi mawa, \q2 akopona lisusu Isalaele mpe akopemisa bango na mokili na bango ; \q1 bongo bapaya bakosangana na bango \q2 mpe bakobakisama na ndako ya Jakobi. \q1 \v 2 Bato ya bikolo bakozwa bango \q2 mpe bakomema bango kino na esika na bango. \q1 Bongo, libota ya Isalaele ekokamata bango \q2 na mokili ya Yawe lokola basali ya mibali mpe ya basi. \q1 Bakokomisa bakangami \q2 bato oyo bakangaki bango \q2 mpe bakokonza bato oyo bakonzaki bango. \p \v 3 Na mokolo oyo Yawe akopesa yo bopemi na mosala na yo, na komitungisa na yo mpe na misala makasi oyo bapesaki yo, \v 4 okoyemba nzembo oyo mpo na kotiola mokonzi ya Babiloni ; okoloba : \q1 « Ndenge nini monyokoli akomi na suka ? \q2 Ndenge nini penza lolendo na ye esili ? \q1 \v 5 Yawe abuki fimbu ya moto mabe, \q2 lingenda ya bokonzi ya bakambi, \q1 \v 6 oyo azalaki kokweyisa bato na kanda \q2 mpe kobeta bango na kolemba te, \q1 oyo azalaki kokonza bikolo na kanda makasi \q2 mpe konyokola bango na mawa te. \q1 \v 7 Mikili nyonso ezwi bopemi mpe kimia, \q2 ekomi koganga na esengo. \q1 \v 8 Banzete ya sipele ezali kosepela \q2 mpo na kokweya na yo, \q1 mpe banzete ya sedele ya Libani ezali koloba : \q2 ‹ Wuta tango okweyaki na se, \q2 moto moko te akweyisaka lisusu biso. › \b \q1 \v 9 Mokili ya bakufi, kuna na se, \q2 eningani na sango ya koya na yo, \q1 elamusi, mpo na koyamba yo, milimo ya bakufi, \q2 bato nyonso oyo bazalaki bakambi na mokili, \q1 etomboli bango, na bakiti na bango ya bokonzi, \q2 ba-oyo nyonso bazalaki bakonzi ya bikolo. \q1 \v 10 Bango nyonso bakozwa maloba mpe bakoloba na yo : \q2 ‹ Yo mpe okomi moto ya bolembu lokola biso, \q2 okokani na biso ! › \q1 \v 11 Lokumu na yo nyonso ekiti kino na mokili ya bakufi, \q2 elongo na makelele ya mandanda na yo. \q1 Nkusu etondi na se na yo lokola mbeto, \q2 mpe mitsopi ezipi yo lokola elamba. \b \q1 \v 12 Ndenge nini penza okweyi wuta na likolo, \q2 oh monzoto oyo engengaka na tongo, \q1 mwana mobali ya tongo makasi ? \q2 Bakweyisi yo penza kino na mabele, \q2 yo moto oyo ozalaki kopanza bikolo ! \q1 \v 13 Ozalaki komilobela kati na motema : \q1 ‹ Nakomata kino na Lola, \q2 nakotombola kiti na ngai ya bokonzi \q1 kino na likolo ya minzoto ya Nzambe \q2 mpe nakovanda na ngomba epai wapi banzambe basanganaka, \q2 na suka ya mokili ya ngambo ya nor ; \q1 \v 14 nakomata kino na likolo ya mapata, \q2 nakomikomisa lokola Ye-Oyo-Aleki-Likolo. › \q1 \v 15 Kasi okiti nde na mokili ya bakufi, \q2 na se penza ya libulu. \b \q1 \v 16 Bato oyo bazali komona yo \q2 batie miso na bango epai na yo, \q1 bazali komituna : ‹ Boni, ezali penza ye \q2 oyo azalaki koningisa mokili mpe kolengisa bikolo ? \q1 \v 17 Moto oyo azalaki kokomisa mokili esobe, \q2 kokweyisa bingumba na yango \q2 mpe kotika te ete bakangami na ye bazonga epai na bango ? › \q1 \v 18 Bakonzi nyonso ya bikolo balalaka na lokumu, \q2 moko na moko kati na kunda na ye ; \q1 \v 19 kasi yo obwakami mosika ya kunda na yo \q2 lokola kaka eloko moko ya nkele, \q1 kati na bibembe ya bato oyo baboma, \q2 bato oyo batobola bango na mopanga, \q1 bongo bakiti kino na libulu ya mabanga \q2 lokola bibembe oyo banyata na makolo. \b \q1 \v 20 Okotikala kosangana na bango te kati na kunda, \q2 pamba te obebisaki mokili na yo \q2 mpe obomaki bato na yo. \b \q1 Bakotikala lisusu kotanga te \q2 bakombo ya bakitani ya bato mabe. \q1 \v 21 Bobongisa esika mpo na koboma bana na ye ya mibali \q2 likolo ya masumu ya batata na bango ! \q1 Tika ete balamuka lisusu te mpo na kozwa mabele lokola libula \q2 mpe kotondisa mokili elongo na bingumba na bango. \b \q1 \v 22 Nakotelemela bango, » \q2 elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q1 « nakolongola kombo ya Babiloni mpe nyonso oyo ekotikala, \q2 bana mpe bakitani na yango, \q2 elobi Yawe. \q1 \v 23 Nakokomisa yango esika ya potopoto \q2 mpe lopango ya bampuku ; \q1 mpe nakokombola yango na nzela ya ekombelo ya libebi, » \q2 elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \s1 Maloba ya kosambisa Asiri \q1 \v 24 Yawe, Mokonzi ya mampinga, alapi ndayi : \q2 « Solo, ndenge kaka nabongisi, \q1 ndenge wana mpe ekosalema ; \q2 makambo oyo nazali na yango na makanisi, \q2 yango nde ekokokisama. \q1 \v 25 Nakobebisa mokili ya Asiri kati na mokili na Ngai, \q2 nakonyata-nyata yango na likolo ya bangomba na Ngai ; \q1 ekangiseli na bango ekolongwa epai ya bato na Ngai \q2 mpe mokumba na bango ekolongwa na mapeka na bango. » \b \q1 \v 26 Yango nde mokano oyo Yawe asili kozwa \q2 mpo na mokili mobimba, \q1 mpe yango nde loboko oyo asili kosembola \q2 mpo na kotelemela bikolo nyonso. \q1 \v 27 Pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, asili kozwa mokano ; \q2 bongo nani akolongola yango ? \q1 Loboko na Ye esili kosembolama ; \q2 nani akozongisa yango ? \s1 Maloba ya kosambisa bato ya Filisitia \q1 \v 28 Maloba oyo eyaki na mobu oyo mokonzi Akazi akufaki : \q1 \v 29 « Bino bato nyonso ya Filisitia, \q2 bosepela te ete fimbu oyo ezalaki kobeta bino esili kobukana, \q1 pamba te etupa ebimaka na libumu ya nyoka, \q2 mpe dalagona oyo epumbwaka ebimaka na libumu ya nyoka mabe. \q1 \v 30 Ye oyo aleki mobola nde akozwa eloko ya kolia, \q2 mpe moto oyo akelela nde akolala na kimia ; \q1 kasi nakoboma bato na yo na nzala ; \q2 mpe bato oyo bakobika, bakoboma bango. \b \q1 \v 31 Oh ekuke, lela makasi ! \q2 Engumba, ganga makasi ! \q1 Mokili mobimba ya Filisitia esili kozinda ! \q2 Milinga makasi ezali kobima na ngambo ya nor, \q2 mpe moto moko te atikali na libanda ya molongo. \q1 \v 32 Eyano nini tokopesa penza \q2 epai ya bamemi sango ya ekolo oyo ? \q1 Ezali ete Yawe asili kolendisa Siona \q2 mpo ete babola kati na bato na Ye \q2 basili kozwa ebombamelo ya malonga. » \c 15 \s1 Maloba ya kosambisa Moabi \p \v 1 Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi : \q1 Pamba te na butu oyo Moabi ebebisamaki, \q2 Ari kati na Moabi mpe ebebisamaki, \q1 solo, ebebisamaki kaka na butu moko ! \q2 Kiri kati na Moabi mpe ebebisamaki ; \q2 solo, ebebisamaki kaka na butu moko ! \q1 \v 2 Bato ya Diboni bazali komata \q2 na bisika na bango ya bule, \q1 na bisambelo na bango ya likolo ya bangomba, \q2 mpo na kolela ; \q1 Moabi akomi koganga mpo na Nebo mpe Medeba. \q2 Bakokoli mito nyonso mpe bakati mandefu nyonso. \q1 \v 3 Balati-lati basaki na babalabala, \q2 bato nyonso bazali kolela na likolo ya mitondo ya bandako \q1 mpe na bisika oyo bato ebele bakutanaka ; \q2 bazali penza kosopa mpinzoli ebele. \q1 \v 4 Eshiboni mpe Eleale ezali koganga makasi, \q2 mingongo ya bato na yango ezali koyokana kino na Yakatsi ; \q1 yango wana, mampinga ya Moabi bazali mpe koganga \q2 mpe mitema na bango ebukani. \b \q1 \v 5 Nazali kolela na se ya motema mpo na Moabi, \q2 banguna na ye bazali kokima kino na Tsoari, \q1 kino na Egilati-Shelishiya ; \q2 bazali komata na nzela ya Luyiti na kolela ; \q1 mpe na nzela ya Oronayimi, bazali kosala matanga \q2 mpo na kobebisama na bango. \q1 \v 6 Mayi ya Nimirimi ekawuki, \q2 bongo matiti mpe esili kokawuka, \q1 matiti ya mobesu eziki-ziki nyonso \q2 mpe matiti ya kitoko ezali lisusu te. \q1 \v 7 Yango wana, bamemi bomengo oyo bazwaki \q2 mpe oyo babombaki na lubwaku ya banzete ya pepiliye. \q1 \v 8 Kolela na bango etamboli na mokili mobimba ya Moabi ; \q2 koganga na bango eyokanaki kino na Egilayimi, \q2 mpe kino na mabulu ya mayi ya Elimi. \q1 \v 9 Mayi ya Dimoni etondi na makila, \q2 kasi nakotinda lisusu pasi makasi na Dimoni : \q2 nkosi moko ekobimela bato ya Moabi oyo bakobika. \c 16 \s1 Moabi esengi lisungi na Yelusalemi \q1 \v 1 Botinda mpate lokola mpako epai ya mokambi ya mokili ; \q2 wuta na Sela kino na ngomba Siona, mboka kitoko, \q2 bokatisa esobe. \q1 \v 2 Bakobengana basi ya Moabi \q2 lokola bandeke na zala na yango, \q2 na suka ya ebale ya Arinoni. \q1 \v 3 « Pesa biso toli, kamata mokano. \q2 Sala ete elili na yo ezala lokola butu na moyi makasi. \q1 Bomba bato oyo bakimeli epai na yo, \q2 kobimisa bango te. \q1 \v 4 Tika ete bato ya Moabi oyo bakimi epai na yo \q2 bawumela elongo na yo ! \q1 Zala nguba na bango liboso ya mobomi. » \q2 Tango minyoko ekokoma na suka, \q1 kobebisama ekotikala lisusu te \q2 mpe koboma ekosila na mokili. \q1 \v 5 Kiti ya bokonzi ekolendisama na bolingo ; \q2 moto moko akovanda na kiti yango na bosolo, \q1 akobimela na ndako ya Davidi : \q2 alukaka bosembo kati na kosambisa \q2 mpe alongisaka makambo ya bosembo. \b \q1 \v 6 Toyokaki sango ya lolendo ya Moabi, \q2 ndenge atombolaka mapeka : \q1 lolendo na ye oyo eleka ndelo mpe lofundu na ye, \q2 lolendo mpe maloba na ye ya lofundu ezanga na yango tina. \q1 \v 7 Yango wana, bato ya Moabi bakosala matanga, \q2 bakomilela bango na bango mpo na Moabi. \q1 Bolela mpe bozala na mawa mpo na mikate ya Kiri-Aresheti, \q2 oyo basala na bambuma ya vino. \q1 \v 8 Mpo ete bilanga ya Eshiboni esili kokawuka \q2 elongo na bilanga ya vino ya Sibima. \q1 Bakambi ya bikolo babukaki-bukaki bitape na yango oyo eleki kitoko, \q2 oyo ekenda kino na Yaezeri mpe eleka kino na esobe. \q1 Bitape yango ezalaki epanzana makasi \q2 mpe ekenda mosika kino na ebale monene. \b \q1 \v 9 Yango wana, nazali kolela lokola Yaezeri \q2 mpo na vino ya Sibima. \q1 Eshiboni mpe Eleale, nazali kosopa mpinzoli mpo na bino ! \q1 Koganga ya esengo esili mpo bambuma na bino \q2 mpe mpo na biloko oyo bobuki na bilanga na bino. \q1 \v 10 Esengo mpe kosepela ebungi na bilanga ya kitoko, \q2 banzembo mpe koganga ya esengo ezali lisusu te \q1 kati na bilanga ya vino ! \q2 Mokamoli vino akokamola lisusu te kati na ekamolelo, \q2 pamba te nakosukisa koganga. \q1 \v 11 Motema na ngai ezali kolela lokola lindanda mpo na Moabi, \q2 mpe kati ya motema na ngai ezali komona pasi \q2 mpo na Kiri-Aresheti. \q1 \v 12 Bakomona Moabi komata na bisambelo ya likolo ya bangomba \q2 mpo na kobondela na esika na ye ya bule, \q2 kasi akolonga te. \p \v 13 Yango nde liloba oyo Yawe aloba wuta kala mpo na Moabi. \v 14 Kasi Yawe alobi sik’oyo boye : « Etikali mibu misato, kobakisa ata mokolo moko te, bato ya lokumu ya Moabi mpe ebele ya bato na ye bakosambwa, bongo bato na ye oyo bakobika bakozala kaka moke mpe bakozanga makasi. » \c 17 \s1 Maloba ya kosambisa Damasi \p \v 1 Maloba ya kosambisa Damasi : \q1 « Tala, Damasi ekotikala lisusu engumba te, \q2 ekokoma nde liboke ya libebi. \q1 \v 2 Bingumba ya Aroeri ekotikala lisusu na bato te, \q2 ekotikala nde mpo na bibwele oyo ekokoma kolala kuna, \q2 oyo moto ata moko te akobangisa. \q1 \v 3 Bingumba batonga makasi ekolimwa na Efrayimi, \q2 mpe nguya ya bokonzi ekolimwa na Damasi. \q1 Batikali ya Siri bakokoma lokola nkembo ya bana ya Isalaele, » \q2 elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \b \q1 \v 4 « Na mokolo wana, lokumu ya Jakobi ekosila, \q2 mafuta ya misuni ya nzoto na ye ekosila. \q1 \v 5 Ekozala lokola tango basangisaka matiti ya ble \q2 mpe loboko ya moloni ebukaka mito na yango, \q1 lokola tango balokotaka mito ya ble \q2 oyo ekweyaka na lubwaku ya bato ya Refayimi. \q1 \v 6 Kasi kaka ndambo moke ya mito ya ble nde etikalaka ; \q2 lokola tango baningisaka nzete \q1 mpo na kobuka bambuma ya olive, \q2 bongo bambuma mibale to misato etikalaka na songe ya bitape, \q1 mpe minei to mitano etikalaka na bitape ya se, » \q2 elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele. \q1 \v 7 Na mokolo wana, bato bakotalela Mokeli na bango \q2 mpe bakobalola miso na bango epai ya Mosantu ya Isalaele ; \q1 \v 8 bakotalela lisusu bitumbelo te \q2 oyo ezali misala ya maboko na bango, \q1 mpe miso na bango ekotala lisusu te \q2 misala ya misapi na bango : \q2 makonzi ya Ashera mpe bitumbelo ya malasi ya ansa. \q1 \v 9 Na mokolo wana, bakosundola bingumba na bango oyo batonga makasi \q2 ndenge basundolaki banzete mpe bangomba liboso ya bana ya Isalaele. \q2 Nyonso ekobebisama penza. \q1 \v 10 Mpo ete obosani Nzambe, Mobikisi na yo, \q2 oboyi kokanisa Libanga oyo azali Ekimelo na yo, \q1 okolisi banzete ya kitoko \q2 mpe oloni banzete ya vino ya bapaya. \q1 \v 11 Kaka na mokolo oyo olonaki yango, \q2 omonaki yango kobimisa mito ; \q1 mpe na tongo makasi, nkona na yo ebimisaki bafololo. \q2 Na mokolo ya pasi, milona na yo ekomonana pamba, \q2 mpe pasi yango ekoki kosila te. \q1 \v 12 Mawa na ebele ya bato ! \q2 Tala ndenge bazali koganga lokola makelele ya ebale monene ! \q1 Bato ya bikolo bazali koganga \q2 lokola lokito ya mayi ya ebale monene ! \q1 \v 13 Ata bato ya bikolo bazali koganga \q2 lokola makelele ya mayi ya bibale minene, \q1 bakimaka penza mosika \q2 tango Yawe apamelaka bango ; \q1 bakimaka lokola matiti na bangomba na tango ya mopepe, \q2 lokola putulu na tango ya mopepe makasi. \q1 \v 14 Na pokwa, somo ya pwasa nde eyaka ! \q2 Bongo liboso ete tongo etana, eloko moko te etikalaka ! \q1 Yango nde lifuti ya bato oyo banyokolaka biso, \q2 mpe mbano ya bato oyo bamonisaka biso pasi. \c 18 \s1 Maloba ya kosambisa Etiopi \q1 \v 1 Mawa na mokili oyo ezali na bamasuwa \q2 oyo ezalaka na bavwale lokola mabanki, \q2 bongo enanaka na ebale ya Kushi ! \q1 \v 2 Mawa na yo oyo otindaka bantoma na nzela ya ebale \q2 kati na bamasuwa oyo basala na papirisi, \q1 na likolo ya ebale monene ! \q2 Bino bapanzi sango ya mbangu, \q1 bokende epai ya bato ya ekolo oyo bazalaka milayi \q2 mpe baposo ya nzoto na bango engengaka, \q1 epai ya bato ya ekolo oyo babangisaka na mosika, \q2 bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, \q2 mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango. \q1 \v 3 Bino nyonso, bavandi ya mokili, \q2 bino oyo botondisi mabele, \q1 tango bakotombola bendele na likolo ya bangomba, bokomona ; \q2 tango bakobeta kelelo, bokoyoka ! \q1 \v 4 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : \q2 « Nakovanda kimia mpe nakotala wuta na ndako na Ngai, \q2 lokola kongala ya moyi to lokola mapata na tango ya molunge. » \q1 \v 5 Mpo ete liboso ya kobuka bambuma, \q2 tango bafololo ya mike etikaka kobima \q1 mpe ekomaka bambuma mibesu oyo ekomi pene ya kotela, \q2 bakataka bitape na likwangola, \q2 babwakaka mpe batiaka pembeni bitape. \q1 \v 6 Bakosundola yango epai ya bandeke \q2 oyo eliaka misuni na likolo ya bangomba \q1 mpe epai ya banyama ya zamba. \q2 Bandeke minene ekolia yango na tango ya molunge \q2 mpe banyama ya zamba ekolia yango na tango ya malili. \q1 \v 7 Na tango wana, bakomema bakado epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 wuta epai ya ekolo ya bato milayi \q1 oyo poso ya nzoto na bango engengaka, \q2 wuta epai ya ekolo ya bato oyo babangisaka na mosika, \q1 bato ya makasi oyo banyataka banguna na bango, \q2 mpe oyo bibale eleka kati na mokili na bango, \q1 bakomema bakado yango na ngomba Siona, \q2 esika oyo Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezalaka. \c 19 \s1 Maloba ya kosambisa Ejipito \p \v 1 Maloba ya Yawe mpo na kosambisa Ejipito : \q1 Tala, Yawe amati likolo ya mapata oyo ekendaka mbangu, \q2 azali koya na Ejipito. \q1 Banzambe ya bikeko ya Ejipito ezali kolenga liboso na Ye \q2 mpe mitema ya bato ya Ejipito elembi-lembi kati na bango. \b \q1 \v 2 « Nakosala ete bato ya Ejipito batelemelana bango na bango : \q2 ndeko akobundisa ndeko na ye, \q1 moninga akobundisa moninga na ye, \q2 engumba moko ekobundisa engumba mosusu, \q2 mpe mboka moko ekobundisa mboka mosusu. \q1 \v 3 Bato ya Ejipito bakosila mayele, \q2 mpe nakobebisa mabongisi na bango nyonso ; \q1 bakokende kotuna toli epai ya banzambe ya bikeko, \q2 epai ya milimo ya bakufi, \q1 epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi \q2 mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya. \q1 \v 4 Nakokaba bato ya Ejipito \q2 na maboko ya bakonzi ya mitema mabe, \q1 mpe mokonzi moko ya kanda makasi akokonza bango, » \q2 elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga. \b \q1 \v 5 Mayi ya ebale monene ekokita, \q2 mpe mayi ya ebale ekosila mpe ekokawuka. \q1 \v 6 Mayi ya miluka ekokoma solo, \q2 mayi ya Ejipito ekokita mpe ekokawuka. \q2 Mpe lisusu, banzete oyo ebotaka na mayi ekokawuka, \q1 \v 7 elongo na matiti oyo ezalaka pembeni ya Nili, \q2 na monoko ya ebale. \q1 Milona nyonso ya bilanga oyo ebotaka pembeni ya Nili \q2 ekokawuka mpe ekopumbwa na mopepe, \q2 eloko moko te ekotikala. \q1 \v 8 Balobi mbisi bakonyokwama mpe bakokoma kolela, \q2 bato nyonso oyo babwakaka ndobo mpe minyama na ebale Nili \q2 bakokoma na pasi. \q1 \v 9 Bato oyo basalaka lino bakokufa soni ya makasi, \q2 mpe bato oyo batongaka bilamba bakotonda na mawa. \q1 \v 10 Bato oyo basimbaka mokili bakokweya, \q2 mpe basali nyonso bakolemba nzoto. \b \q1 \v 11 Bakambi ya Tsoani bakomi penza lokola bazoba, \q2 bato ya bwanya ya Faraon bakomi kopesa batoli \q1 oyo ezanga tina. \q2 Ndenge nini bokoki penza koloba na Faraon : \q1 « Ngai, nazali moko kati na bato ya bwanya, \q2 moyekoli ya bakonzi ya kala ? » \b \q1 \v 12 Wapi sik’oyo bato na yo ya bwanya ? \q2 Tika ete balakisa yo mpe basosolisa yo \q1 makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 abongisaki mpo na kotelemela Ejipito. \q1 \v 13 Bakambi ya Tsoani bakomi lokola bazoba, \q2 bakambi ya Mefisi bakomi kokanisa makambo ya lokuta ; \q1 nzokande bango, makonzi ya bikolo ya bato ya Ejipito, \q2 nde bazali kobungisa bato ya Ejipito nzela. \q1 \v 14 Yawe atindeli bango molimo ya kizunguzungu : \q2 bango nde basalaki ete Ejipito ekoma kotenga-tenga \q1 na misala na yango nyonso \q2 ndenge moto oyo alangwe masanga atengaka-tengaka. \q1 \v 15 Eloko moko te ekosalema lisusu na Ejipito, \q2 ezala na moto to na mokila, \q2 na lindalala ya nzete ya mbila to na nzete oyo ebotaka na mayi. \s1 Kobongwana ya Ejipito \p \v 16 Na mokolo wana, bato ya Ejipito bakokoma lokola basi. Bakolenga na somo na koningana ya loboko oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, atomboli mpo na kotelemela bango. \v 17 Bongo mokili ya Yuda ekolengisa bato ya Ejipito na somo. Tango nyonso bakoyoka kombo ya Yuda, bakolenga na somo mpo na mabongisi nyonso oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, asalaki mpo na kotelemela bango. \p \v 18 Na mokolo wana, bingumba mitano kati na Ejipito ekokoma koloba lokota ya Bayuda mpe kolapa ndayi na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga. Bongo moko kati na yango ekobenga yango : Engumba ya moyi. \p \v 19 Na mokolo wana, bakotonga etumbelo moko na kati-kati ya Ejipito mpe bakotia likonzi moko lokola ekaniseli mpo na Yawe, na bandelo ya mokili. \v 20 Ekozala lokola elembo mpe litatoli mpo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, na mokili ya Ejipito. Tango bakoganga epai na Yawe likolo na banyokoli na bango, akotindela bango mobikisi mpe mobundeli, mpe akobikisa bango. \v 21 Boye, Yawe akomimonisa epai na bato ya Ejipito. Mpe na mokolo wana, bato ya Ejipito bakoyeba Yawe, bakogumbamela Ye na bambeka mpe na makabo ya bambuma ; bakolapa ndayi na Kombo na Yawe mpe bakokokisa yango. \v 22 Kasi Yawe akobeta Ejipito na nzela ya bitumbu, akobeta yango mpe akobikisa yango. Bakozonga epai na Yawe, bongo akoyanola na kolela na bango mpe akobikisa bango. \p \v 23 Na mokolo wana, bakopasola nzela moko wuta na Ejipito kino na Asiri. Bato ya Asiri bakokoma koya na Ejipito, mpe bato ya Ejipito bakokoma koya na Asiri. Bato ya Ejipito mpe bato ya Asiri bakokoma kosala elongo losambo mpo na Yawe. \v 24 Na mokolo wana, Isalaele akozala ekolo ya misato, sima na Ejipito mpe Asiri, lipamboli oyo Nzambe akomema na mokili. \v 25 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akopambola bango na maloba oyo : « Tika ete bopambolama : Ejipito, bato na Ngai ; Asiri, misala ya maboko na Ngai, mpe Isalaele, libula na Ngai ! » \c 20 \s1 Elembo ya lisakoli mpo na Ejipito \p \v 1 Na mobu oyo mokonzi monene ya basoda, oyo Sargoni, mokonzi ya Asiri, atindaki, ayaki kobundisa mpe kobotola engumba Asidodi ; \v 2 kaka na tango wana, Yawe alobaki maloba oyo na nzela ya Ezayi, mwana mobali ya Amotsi : « Kende, longola bilamba ya saki na nzoto na yo, mpe basapato na makolo na yo. » \p Mpe asalaki kaka bongo ; akomaki kotambola bolumbu mpe makolo ngulu. \p \v 3 Bongo Yawe alobaki : « Lokola mosali na Ngai, Ezayi, atamboli bolumbu mpe makolo ngulu mibu misato mpo na kozala elembo mpe ekamwiseli na miso ya Ejipito mpe ya Kushi, \v 4 mokonzi ya Asiri akomema bakangami ya Ejipito mpe bawumbu ya Kushi bolumbu mpe makolo ngulu : ezala bilenge to bampaka, bakotambola bolumbu mpe makolo ngulu mpo na soni ya Ejipito. \v 5 Bato nyonso oyo batiaki elikya na bango na Kushi mpe bakomaki lofundu mpo na Ejipito bakokweya mpe bakotonda na soni. \v 6 Na mokolo wana, bavandi ya esanga bakoloba : ‹ Tala, makambo nini ekomeli bato oyo biso tozalaki kotiela mitema ? Tozalaki kokima epai na bango mpo na kozwa lisungi mpe lobiko liboso ya mokonzi ya Asiri. Biso sik’oyo tokosuka ndenge nini ? › » \c 21 \s1 Maloba ya kosambisa mokili ya Babiloni \p \v 1 Maloba na Yawe na tina na esobe ya ebale monene : \q1 Ndenge mopepe makasi elekaka na somo na Negevi, \q2 monguna moko azali koya wuta na esobe, \q2 wuta na mokili moko ya somo. \b \q1 \v 2 Namonaki emoniseli moko ya somo : \q2 Moteki baninga azali koteka baninga, \q1 mobebisi azali kobebisa. \q2 Elami, bundisa bango ! \q1 Medi, zingela bango ! \q2 Nakosukisa kolela nyonso oyo ayeisaki na bato. \b \q1 \v 3 Yango wana, loketo na ngai ekomi na pasi, \q2 pasi moko ya makasi penza ekangi ngai \q1 lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota. \q2 Makambo oyo nazali koyoka ezali kopesa ngai somo, \q2 mpe oyo nazali komona ezali kosilisa ngai mayele. \q1 \v 4 Motema na ngai ezali kobeta noki-noki, \q2 nakomi kolenga na somo, \q1 mwa malili ya pokwa oyo nazelaka na esengo \q2 ekomeli ngai somo makasi. \b \q1 \v 5 Mesa ebongisami, \q2 batandi bilamba ya mesa, \q1 bazali kolia mpe komela ! \q2 Bino bakonzi ya basoda, bopakola banguba na bino mafuta ! \q1 \v 6 Tala liloba oyo Nkolo alobi na ngai : \q2 « Kende, tia mokengeli ; \q2 mpe tika ete aloba makambo oyo akomona. \q1 \v 7 Soki amoni shar oyo bampunda mibale ezali kobenda, \q2 basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, \q1 bamoko bamati likolo ya ba-ane, \q2 bamosusu bamati likolo ya bashamo, \q2 tika ete asala keba, asala keba penza ! » \b \q1 \v 8 Boye, mokengeli agangaki lokola nkosi : \q2 « Nkolo, mokolo mobimba, \q1 natelemaka na likolo ya ndako molayi ya kokengela ; \q2 mpe butu nyonso, natikalaka kaka se wana. \q1 \v 9 Tala, moto moko azali koya awa na shar, \q2 oyo bampunda mibale ezali kobenda. \q1 Azongisaki eyano : \q2 ‹ Babiloni esili kokweya, ekweyi solo ! \q1 Banzambe na yango nyonso ya bikeko elali-lali \q2 mpe epanzani na mabele ! › » \b \q1 \v 10 Oh bato na ngai, \q2 babeti bino ndenge batutaka ble na libanda ! \q1 Nazali koyebisa bino makambo oyo nayokaki \q2 wuta epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 wuta epai ya Nzambe ya Isalaele. \s1 Maloba ya kosambisa Duma mpe Arabi \q1 \v 11 Maloba na Yawe na tina na Duma\f + \fr 21.11 \fr*\ft Duma elingi koloba : kimia. Ezali nde kombo ya liseki ya Edomi.\ft*\f*. \q2 Moto moko azali kobelela Ngai wuta Seiri : \q1 « Mokengeli, olobi nini mpo na butu ? \q2 Mokengeli olobi nini mpo na butu ? » \q1 \v 12 Mokengeli azongisaki : \q2 Tongo elingi kotana, kasi butu mpe elingi koya. \q1 Soki bolingi kotuna mituna, botuna ; \q2 bongo bozonga mpe boya lisusu. \b \q1 \v 13 Maloba na Yawe mpo na kotelemela Arabi : \q2 Oh bino bato ya mombongo ya Dedani, \q2 bokolala na esobe ya Arabi. \q1 \v 14 Bopesa mayi na moto oyo azali na posa ya mayi ; \q2 bino bavandi ya mokili ya Tema, \q2 bopesa bilei na bato oyo bazali kokima bitumba. \q1 \v 15 Pamba te bazali nde kokima mopanga, \q2 mopanga oyo babimisi na ebombelo na yango, \q1 bazali nde kokima tolotolo oyo etelemi makasi \q2 mpe bitumba ya makasi. \p \v 16 Tala liloba oyo Nkolo alobaki na ngai : « Etikali kaka mobu moko, ndenge batangaka mikolo ya mowumbu, nkembo nyonso ya Kedari ekosuka. \v 17 Bongo, ekotikala kaka mwa ndambo moke ya basoda oyo babundaka na matolotolo mpe ya basoda ya mpiko kati na Kedari, » elobi Yawe, Nzambe ya Isalaele. \c 22 \s1 Maloba ya kosambisa Yelusalemi \p \v 1 Maloba na Yawe na tina na lubwaku ya Emoniseli : \q1 Likambo nini lisusu ekomeli bino sik’oyo \q2 mpo ete bino nyonso bomata na likolo ya mitondo ya ndako ? \q1 \v 2 Oh engumba etonda na loyenge, \q2 engumba etonda na makelele mpe na bisengo ! \q1 Bibembe na yo ekufi na mopanga te \q2 to mpe na bitumba te. \q1 \v 3 Bakambi na yo nyonso bakimaki elongo ; \q2 bakangaki bango na basoda na nguya ya tolotolo. \q1 Mpe bato na yo, oyo bazalaki kokima monguna na mosika, \q2 bakangaki bango mpe bakomaki elongo bakangami. \q1 \v 4 Yango wana nalobaki : \q2 « Botika kotala Ngai, botika ete nalela makasi ! \q1 Bomeka kobondisa Ngai te \q2 mpo na kobebisama ya bato na Ngai ! » \b \q1 \v 5 Pamba te ezali mokolo moko ya lokito ya bitumba, \q2 mokolo ya pasi makasi mpe ya somo \q1 kati na lubwaku ya Emoniseli \q2 kowuta na Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga ; \q1 ezali mokolo oyo mir ya makasi ekobukana \q2 mpe makelele ya koganga ekobima na bangomba. \q1 \v 6 Mampinga ya Elami batomboli makonga, \q2 mosusu bamati na bashar mpe bampunda ; \q2 Kiri abimisi nguba. \q1 \v 7 Lubwaku na yo, oyo eleki kitoko etondi na bashar, \q2 mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda \q2 batelemi-telemi na bikuke ya engumba ; \q1 \v 8 bibombamelo ya Yuda etikali lisusu te. \b \q1 Na mokolo wana, obalolaki miso na yo \q2 na bibundeli oyo ezalaka na Ndako ya Zamba\f + \fr 22.8 \fr*\ft Ndako ya Zamba ezali ndako oyo mokonzi Salomo atongaki pene ya Tempelo ya Yelusalemi. Eteni na yango ya monene evandisamaki na makonzi ya banzete ya sedele ya mokili ya Libani.\ft*\f*. \q1 \v 9 Bomonaki ete Engumba ya mokonzi Davidi \q2 ezali na madusu mingi kati na mir oyo ezingeli yango ; \q2 boye bobombaki mayi kati na Liziba oyo ezalaka na se, \q1 \v 10 botangaki motango ya bandako ya Yelusalemi, \q2 bobukaki mosusu mpo na kolendisa mir ya monene. \q1 \v 11 Bosalaki liziba mpo na kobomba mayi \q2 ya liziba ya kala kati na bamir mibale, \q1 kasi bobalolaki miso na bino te mpo na kotala \q2 Ye oyo asalaki mpe abongisaki yango wuta kala. \q1 \v 12 Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 azalaki kobenga bino na mokolo wana \q1 mpo ete bolela mpe bosala matanga, \q2 bomikokola suki mpe bolata saki. \q1 \v 13 Kasi tala, ezalaki kaka bisengo mpe loyenge, \q2 koboma bangombe mpe bameme ya mibali, bantaba ya basi, \q1 kolia misuni mpe komela masanga ya vino ! \q2 Bozalaki koloba : \q1 « Tika ete tolia mpe tomela, \q2 pamba te, lobi, tokokufa ! » \q1 \v 14 Yawe, Mokonzi ya mampinga, ayebisaki ngai yango \q2 na matoyi na ngai moko penza : \q1 « Kino bokokufa, bokotikala kozwa bolimbisi ya lisumu oyo te, » \q2 elobi Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga. \s1 Maloba ya kosambisa Shebina \p \v 15 Tala maloba oyo Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \q1 « Kende kokuta Shebina, \q2 mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, \q2 loba na ye : \q1 \v 16 ‹ Ozali kosala nini awa, \q2 mpe nani apesi yo nzela ya kotonga kunda na yo awa \q1 lokola moto oyo azali kotimola kunda na ye na likolo \q2 mpe kotonga epemelo na ye \q2 kati na lidusu ya libanga monene ? \q1 \v 17 Tala, Yawe akomi pene ya koningisa yo \q2 mpe kobwaka yo mosika, yo moto ya makasi ! \q1 \v 18 Akobalola yo ndenge babalolaka ndembo \q2 mpe akobwaka yo na etando moko ya monene. \q1 Kuna nde okokufa, \q2 mpe bashar na yo ya lokumu ekotikala, \q2 yo oyo osalaka soni ya ndako ya mokonzi na yo. \q1 \v 19 Nakolongola yo na mosala, \q2 mpe lokumu na yo ekosila. \p \v 20 Na mokolo wana, nakobengisa mosali na Ngai, Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia. \v 21 Nakolatisa ye nzambala na yo, nakokanga ye mokaba na yo mpe nakopesa bokonzi na yo na maboko na ye. Akozala tata mpo na bavandi ya Yelusalemi mpe mpo na ndako ya Yuda. \v 22 Nakotia fungola ya ndako ya Davidi na mapeka na ye : oyo akofungola, moto moko te akokanga yango ; mpe oyo akokanga, moto moko te akofungola yango. \v 23 Nakopika ye lokola sete na esika ya malamu ; akozala lokola kiti ya bokonzi ya lokumu mpo na ndako ya tata na ye. \v 24 Nkembo nyonso ya ndako ya tata na ye ekozala likolo na ye : kobanda na bakitani na ye kino na bana na bango nyonso, lokola bisalelo oyo : kobanda na bakopo ya mike kino na mbeki ya minene. \v 25 Na mokolo wana, elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, sete oyo bapikaki na esika ya malamu ekolongwa, ekobukana mpe ekokweya ; mpe mokumba oyo amemaki ekokweya. › » Yawe nde alobaki. \c 23 \s1 Maloba ya kosambisa Tiri mpe Sidoni \p \v 1 Maloba na Yawe na tina na engumba ya Tiri : \q1 Oh bamasuwa ya Tarsisi, bosala matanga ! \q2 Pamba te engumba ya Tiri esili kobebisama nyonso : \q1 ezala ndako to libongo, eloko moko te etikali ! \q2 Bazwaki sango oyo wuta na esanga ya Shipele. \q1 \v 2 Bino bavandi ya esanga, \q2 bino bato ya mombongo ya Sidoni, \q1 oyo nzela ya ebale ekomisa bazwi, \q2 bovanda nye ! \q1 \v 3 Lifuti na ye ezalaki : \q2 ble ya Shiyori, oyo ezalaki koya na nzela ya ebale monene \q1 mpe milona oyo ezalaki kowuta pembeni ya Nili. \q2 Engumba ya Tiri ekomaki nde zando ya bikolo. \q1 \v 4 Yoka soni, Sidoni, ndako batonga makasi ya ebale monene, \q2 pamba te ebale monene elobi : \q1 « Natikala koyoka pasi ya kobota te, \q2 natikala na ngai mpe kobota te, \q1 natikala na ngai kobokola bana mibali \q2 to kokolisa bana basi te. » \q1 \v 5 Tango maloba yango ekokoma na Ejipito, \q2 bakolenga na somo wana bakoyoka sango ya Tiri. \b \q1 \v 6 Bokatisa na ngambo ya Tarsisi, \q2 bolela makasi, bino bavandi ya esanga. \q1 \v 7 Boni, oyo nde engumba na bino ya bisengo, \q2 engumba oyo ebanda kala penza \q1 mpe oyo makolo na yango ememaka yango \q2 kowumela na mikili ya mosika ? \q1 \v 8 Nani azwaki mokano oyo mpo na kobebisa Tiri ? \q2 Tiri oyo azalaki kokabola mitole, \q1 oyo bato na ye ya mombongo bazalaki komimona lokola bakonzi ; \q2 mpe oyo bato na ye ya nkita bazalaki komimona lokola bato \q2 oyo baleki bato nyonso ya mokili na lokumu. \q1 \v 9 Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde azwaki mokano yango \q2 mpo na kosambwisa lolendo ya nkembo nyonso \q1 mpe kokitisa kino na se bato nyonso ya lokumu, \q2 oyo bazali na mabele. \b \q1 \v 10 Oh Tarsisi, mboka kitoko, \q2 koma kosala bilanga \q1 ndenge basalaka pembeni ya ebale Nili, \q2 pamba te libongo ezali lisusu te. \q1 \v 11 Yawe asembolaki loboko na Ye na ebale monene \q2 mpe alengisaki bikolo, \q1 apesaki mitindo na tina na mokili ya Fenisi \q2 ete babuka bandako na yango oyo batonga makasi ; \q1 \v 12 alobaki : « Okosepela lisusu te, \q2 yo Sidoni, mboka kitoko, yo oyo lokumu na yo esili kobebisama lelo ! \q1 Telema, katisa na ngambo ya Shipele ! \q2 Ezala kuna, okozwa bopemi te. » \q1 \v 13 Tala mokili ya bato ya Chalide, \q2 bato oyo bazalaka lisusu te ! \q1 Bato ya Asiri bakomisaki yango \q2 esika ya kowumela mpo na banyama ya esobe ; \q1 batongaki bandako na bango ya milayi mpo na kokengela, \q2 babukaki bandako na yango batonga makasi \q2 mpe bakomisaki yango putulu. \q1 \v 14 Bolela, bino bamasuwa ya Tarsisi ! \q2 Pamba te ndako na bino, oyo batonga makasi ebukani. \p \v 15 Na tango wana, bakobosana Tiri mibu tuku sambo kolanda molayi ya bomoi ya mokonzi moko. Kasi na suka ya mibu tuku sambo, ekosalema mpo na Tiri, makambo oyo baloba na nzembo oyo bayembelaka mwasi ya ndumba : \q1 \v 16 « Kamata lindanda, \q2 tambola na engumba mobimba, \q1 oh mwasi ya ndumba oyo babosana ; \q2 beta yango malamu, yemba banzembo ebele \q2 mpo ete bakanisa yo lisusu ! » \p \v 17 Na sima na mibu tuku sambo, Yawe akosala mpo na Tiri oyo ekozongela lifuti na yango ya mbindo ; mpe ekozongela kosala kindumba elongo na bikolo nyonso ya mokili. \v 18 Kasi lifuti mpe bomengo na yango ekobulisama mpo na Yawe ; bakobomba te yango kati na bibombelo. Bomengo na yango ekozala mpo na koleisa bato oyo batelemaka liboso ya Yawe mpe kolatisa bango bilamba ya kitoko. \c 24 \ms1 Masakoli na tina na mbongwana oyo ekoya \s1 Yawe akobebisa mokili \q1 \v 1 Tala, Yawe akobebisa mokili \q2 mpe akokomisa yango lokola esobe ; \q1 akokotisa mobulu kati na yango \q2 mpe akopanza bato na yango. \q1 \v 2 Ekozala mpe kaka ndenge moko \q2 mpo na Banganga-Nzambe mpe bato, \q1 mpo na nkolo mpe mowumbu na ye, \q2 mpo na nkolo ya mwasi mpe mwasi mosali na ye, \q1 mpo na moteki mpe mosombi, \q2 mpo na modefisi mpe modefi, \q1 mpo na moto oyo bakofuta ye niongo \q2 mpe mpo na moto oyo akofuta niongo. \q1 \v 3 Mokili ekobebisama penza nye \q2 mpe bakopanza yango nyonso. \q2 Yawe nde alobaki yango. \b \q1 \v 4 Mokili ezali na matanga mpe ekawuki, \q2 mokili mobimba ebebi mpe ekawuki ; \q2 ezala likolo mpe ebebi elongo na mokili ! \q1 \v 5 Bato ya mokili bakomisi yango mbindo, \q2 bazali kotosa mibeko te ; \q1 banyati-nyati bikateli \q2 mpe babuki boyokani ya seko. \q1 \v 6 Mpo na yango, bilakeli mabe ezali kozikisa mokili ; \q2 bato na yango bakomema mokumba ya mabe na bango. \q1 Yango wana, bato ya mokili bazali kokufa, \q2 mpe ndambo moke kaka nde etikali. \b \q1 \v 7 Vino ya sika ezali na matanga, \q2 elanga ya vino ekawuki ; \q1 bato nyonso oyo bamesana na esengo \q2 bakomi kolela na pasi. \q1 \v 8 Esengo ya mbonda esili, \q2 makelele ya bato ya biyenga esili, \q2 esengo ya lindanda esili ; \q1 \v 9 komela vino etikali lisusu na banzembo te, \q2 masanga ya makasi ekomi bololo \q2 mpo na bato oyo bamelaka yango. \b \q1 \v 10 Engumba oyo ebeba etikali pamba, \q2 bikuke ya bandako nyonso ekangami. \q1 \v 11 Na babalabala, koganga na koganga ete vino ezali lisusu te, \q2 kosepela nyonso ebongwani molili, \q2 esengo nyonso elongwe na mokili. \q1 \v 12 Libebi kaka nde etikali kati na engumba, \q2 babuki-buki bikuke na yango na biteni. \b \q1 \v 13 Pamba te ekosalema kati na mokili mpe kati na bikolo \q2 ndenge esalemaka tango babukaka bambuma ya olive na nzete \q1 to tango balokotaka bambuma ya vino \q2 soki basilisi kobuka yango. \q1 \v 14 Bamoko bakotombola mingongo na bango \q2 mpe bakoganga na esengo ; \q1 wuta na weste ya mayi monene, \q2 bakobeta milolo mpo na lokumu na Yawe. \q1 \v 15 Yango wana, kuna na ngambo ya este, \q2 bopesa nkembo na Yawe ; \q1 bonetola Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, \q2 kati na bisanga ya ebale monene. \q1 \v 16 Wuta na suka ya mokili, \q2 tozali koyoka banzembo : \q1 « Nkembo epai ya Nkolo-Na-Bosembo. » \q2 Kasi nalobaki : « Nakomi na suka, nakomi na suka ! \q1 Mawa mpo na ngai ! \q2 Bazoba bateki mboka, na bozoba penza, \q2 bazoba bateki mboka ! » \q1 \v 17 Oh bato ya mokili, \q2 somo, libulu mpe motambo \q2 ezali kozela bino. \q1 \v 18 Moto nyonso oyo akokima na lokito ya somo \q2 akokweya na libulu, \q1 mpe oyo akoluka kobima kati na libulu \q2 akokangama na motambo. \q1 Maninisa ya likolo esili kofungwama, \q2 makonzi ya mokili ezali koningana. \q1 \v 19 Mokili ebukani-bukani, \q2 mokili epanzani, \q2 mokili eningani makasi. \q1 \v 20 Mokili ekomi kotenga-tenga \q2 lokola moto oyo alangwe masanga, \q1 ezali koningana na mopepe lokola ndako ya matiti. \q2 Mokumba ya botomboki na ye ezali likolo na ye, \q2 esili kokweya mpe ekotelema lisusu te. \s1 Suka mpe ebandeli \q1 \v 21 Kasi na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu \q2 na mampinga ya lola kuna na likolo, \q2 mpe na bakonzi ya mokili na se. \q1 \v 22 Bakosangisa bango elongo kati na libulu \q2 ndenge basangisaka bakangami na boloko, \q1 bakokangela bango na boloko \q2 mpe bakozwa etumbu sima na mikolo ebele. \q1 \v 23 Sanza ekokoma motane, \q2 mpe moyi ekoyoka soni, \q1 pamba te Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 akokonza na ngomba Siona mpe kati na Yelusalemi, \q2 liboso ya bampaka na yango, na nkembo makasi. \c 25 \s1 Nzembo mpo na kokumisa Yawe \q1 \v 1 Yawe, ozali Nzambe na ngai ; \q2 nakonetola Yo mpe nakosanzola Kombo na Yo ; \q1 pamba te na boyengebene na Yo ya kokoka, \q2 osalaki mabongisi ya kokamwa, \q2 makambo oyo obongisa wuta kala. \q1 \v 2 Okomisaki engumba mopiku ya mabanga, \q2 okomisaki bingumba ya makasi maboke ya mabanga ; \q1 bandako batonga makasi ya bapaya etikali \q2 lisusu na bilongi ya engumba te, \q2 bakotonga yango lisusu te. \q1 \v 3 Yango wana, bato ya nguya bakopesa Yo lokumu, \q2 bingumba ya bikolo ya kanza ekotosa Yo. \q1 \v 4 Ozalaki ekimelo mpo na mobola, \q2 ekimelo mpo na moto oyo akelela, na tango ya pasi, \q1 ebombamelo na tango ya mvula makasi \q2 mpe pio na tango ya molunge. \q1 Pamba te pema ya banyokoli ezali \q2 lokola mvula ya makasi oyo ebukaka bamir ; \q1 \v 5 mpe lokola moto ya moyi na zelo ya esobe. \q2 Osilisaki makelele ya bapaya \q1 ndenge pio ya mapata esilisaka molunge ; \q2 boye nde nzembo ya banyokoli esilaki. \q1 \v 6 Na ngomba oyo, Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 akobongisa feti ya biloko kitoko mpo na bato nyonso, \q1 feti monene ya vino ya kala, \q2 ya misuni oyo eleki mafuta mpe ya vino ya kala oyo balongola malamu salite. \q1 \v 7 Kaka na ngomba oyo, \q2 akobebisa vwale oyo esili kozipa bato nyonso, \q2 bulangeti oyo ezipi bikolo nyonso ; \q1 \v 8 akolimwisa kufa mpo na libela. \q2 Nkolo Yawe akopangusa mpinzoli na bilongi nyonso, \q1 akolongola soni ya bato na Ye kati na mokili mobimba. \q2 Solo, Yawe alobi. \q1 \v 9 Na mokolo wana, bakoloba : \q2 « Solo, Oyo azali penza Nzambe na biso ! \q1 Totiaki mitema epai na Ye mpe abikisi biso. \q2 Oyo azali solo Yawe, totiaki mitema epai na Ye ; \q1 tika ete tosepela mpe tozala na esengo \q2 mpo na lobiko oyo apesi biso ! » \q1 \v 10 Loboko na Yawe ekozala na ngomba oyo, \q2 kasi bakonyata-nyata Moabi na mokili na bango \q2 ndenge banyataka matiti kati na libulu ya fimie. \q1 \v 11 Akosembola maboko na Ye kati na yango \q2 ndenge basembolaka maboko mpo na kokata mayi. \q1 Nzambe akokitisa lolendo na bango \q2 mpe mayele ya maboko na bango ; \q1 \v 12 akobuka bamir milayi na bino ya makasi \q2 mpe akolalisa yango na se ; \q1 akokweyisa yango na mabele \q2 kino ekoma putulu. \c 26 \s1 Nzembo ya elonga \p \v 1 Na mokolo wana, bakoyemba nzembo oyo kati na mokili ya Yuda : \q1 Tozali na engumba moko ya makasi ; \q2 Nzambe akomisi lobiko \q2 lokola mir mpe ebombamelo na yango. \q1 \v 2 Bofungola bikuke \q2 mpo ete ekolo ya sembo, \q1 ekolo oyo ebatelaka boyokani, \q2 ekoka kokota ! \q1 \v 3 Ndenge esila kokatama, \q2 ye oyo akomitika epai na Yo, \q1 okobatela ye na kimia, na kimia penza, \q2 mpo ete amipesi mobimba epai na Yo. \q1 \v 4 Botia tango nyonso elikya na Yawe, \q2 pamba te Yawe azali penza Libanga ya tango nyonso. \q1 \v 5 Akitisaka bavandi ya likolo, \q2 akweyisaka engumba oyo batonga makasi, \q1 alalisaka yango penza na mabele \q2 mpe akomisaka yango putulu. \q1 \v 6 Makolo ya bato ekonyata-nyata yango : \q2 makolo ya babola, matambe ya bato pamba. \s1 Libondeli \q1 \v 7 Nzela ya moto ya sembo, ezali alima ; \q2 Yo oyo ozali Sembo, \q2 okomisaka kitoko nzela ya moto ya sembo. \q1 \v 8 Oh Yawe, tango totambolaka na nzela \q2 oyo mibeko na Yo etalisaka, \q1 totalelaka Yo ; \q2 Kombo na Yo mpe kotatola yango, \q2 yango nde posa ya mitema na biso. \q1 \v 9 Na butu, motema na ngai ezali solo na posa na Yo ; \q2 kati na ngai, molimo na ngai ezali kolukaluka Yo makasi, \q1 pamba te bavandi ya mokili bayekolaka bosembo \q2 tango opesaka mabele bitumbu. \q1 \v 10 Soki basaleli moto mabe ngolu, \q2 akoyekola bosembo te ; \q1 ezala kati na mokili ya bosembo, \q2 asalaka kaka mabe \q2 mpe amonaka na ye monene ya Yawe te. \b \q1 \v 11 Oh Yawe, loboko na Yo emati solo likolo, \q2 kasi bazali komona yango te. \q1 Tika ete bayokisama soni \q2 tango bakomona bolingo makasi na Yo, \q1 oyo eleka ndelo mpo na bato na Yo ; \q2 tika ete moto oyo obongiselaki banguna na Yo \q2 etumba bango ! \q1 \v 12 Yawe, okopesa biso kimia, \q2 pamba te okokiselaka biso misala nyonso oyo tosalaka. \q1 \v 13 Oh Yawe, Nzambe na biso, \q2 atako bakonzi mosusu bakambaki biso, \q2 kasi biso, topesaka lokumu kaka na Kombo na Yo. \b \q1 \v 14 Bakufi bakozala lisusu na bomoi te, \q2 milimo ya bakufi ekozonga lisusu na bomoi te ; \q1 opesaki bango etumbu \q2 mpe obomaki bango nye ; \q2 osalaki ete ata moto moko te akanisa bango lisusu ! \b \q1 \v 15 Oh Yawe, okomisi ekolo na Yo monene ! \q2 Solo, okomisi ekolo na Yo monene, \q1 omipesi penza lokumu ; \q2 opusi bandelo nyonso ya mokili mosika penza. \q1 \v 16 Yawe, kati na pasi na bango, balukaki Yo ; \q2 tango opesaki bango etumbu, \q2 bamikabaki na mabondeli makasi. \q1 \v 17 Oh Yawe, tozalaki liboso na Yo \q2 lokola mwasi ya zemi oyo akomi pene ya kobota, \q2 bongo azali kobaluka mpe koganga na pasi. \q1 \v 18 Tozalaki na zemi, \q2 tozalaki mpe kobaluka na pasi ; \q1 kasi tango tobotaki, tobotaki kaka mopepe : \q2 tomemelaki mabele lobiko te, \q2 mpe tomemelaki mokili bato ya sika te. \b \q1 \v 19 Kasi bato na Yo, oyo bakufa bakozonga lisusu na bomoi, \q2 bibembe na bango ekosekwa. \q1 Bino bato oyo bovandaka kati na putulu, \q2 bolamuka mpe boganga na esengo ! \q1 Pamba te mamwe na Yo ezali \q2 lokola mamwe ya tongo ; \q2 mabele ekopesa bomoi epai ya bakufi. \s1 Ngolu mpe kotongama \q1 \v 20 Bato na ngai, bokende, \q2 bokota na bashambre na bino \q1 mpe bokanga bikuke sima na bino ; \q2 bomibomba nanu mwa tango moke \q2 kino tango kanda ekoleka. \q1 \v 21 Tala, Yawe azali kobima wuta na esika na Ye \q2 mpo na kopesa bato ya mokili etumbu \q1 mpo na masumu na bango ; \q2 mabele ekobimisa makila \q1 oyo basopa likolo na yango, \q2 ekobomba lisusu te bato oyo baboma. \b \c 27 \q1 \v 1 Na mokolo wana, Yawe akopesa etumbu na Leviatani\f + \fr 27.1 \fr*\ft Leviatani ezali elima monene ya mayi. Ezali elembo ya mabe oyo eleka ndelo, mpe elembo ya Ejipito.\ft*\f*, \q2 nyoka oyo ekimaka, \q1 na Leviatani, nyoka ya somo, \q2 na nzela ya mopanga na Ye ya minu, \q1 mopanga na Ye ya monene mpe ya nguya ; \q2 akoboma elima ya ebale monene. \q1 \v 2 Na mokolo wana, bakoloba : \q2 « Boyemba nzembo mpo na nzete ya vino ya kitoko : \q1 \v 3 Ngai Yawe, nabatelaka yango, \q2 nasopelaka yango mayi tango nyonso, \q1 nakengelaka yango butu mpe moyi \q2 mpo ete moto moko te abebisa yango. \q1 \v 4 Nazali lisusu na kanda te. \q2 Ah, soki ezalaki kaka na banzube \q1 mpe na basende mpo na kobundisa Ngai, \q2 nde natambolaki likolo na yango na bitumba \q2 mpe nabwakaki yango nyonso na moto. \q1 \v 5 Kasi tika ete bakimela epai na Ngai \q2 lokola ndako batonga makasi, \q1 tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai ; \q2 solo, tika ete baluka kosala kimia elongo na Ngai ! » \b \q1 \v 6 Na mikolo oyo ekoya, Jakobi akozwa misisa, \q2 Isalaele akobimisa bafololo mpe mito, \q2 mpe akotondisa mokili na bambuma na ye. \b \q1 \v 7 Boni, Yawe abetaki ye te \q2 ndenge abetaki bato oyo babetaki ye ? \q1 Boni, abomaki ye te \q2 ndenge abomaki bato oyo babomaki ye ? \q1 \v 8 Apesaki bango etumbu na kotelemela mpe na kobengana. \q2 Alongolaki bango na mopepe na Ye ya makasi, \q2 kaka na mokolo moko ya mopepe na Ye ya este. \b \q1 \v 9 Ezali na nzela wana nde mabe ya Jakobi ekolimbisama, \q2 mpe tala oyo ekozala mbuma ya bolimbisi masumu na ye : \q1 akobuka mabanga nyonso ya etumbelo \q2 mpo ete ekoma lokola mabanga ya pembe oyo babuka-buka ; \q1 mpe likonzi moko te ya Ashera \q2 to etumbelo ya malasi ya ansa ekotikala. \s1 Engumba oyo basundola \q1 \v 10 Engumba ya makasi etikali pamba \q2 lokola lopango oyo basundola, \q1 babosana mpe etikala pamba lokola esobe ; \q2 mwana ngombe ya mobali ekokoma kolia mpe kolala kuna, \q2 bongo ekolia ata makasa ya bitape na yango. \q1 \v 11 Tango bitape na yango ekokawuka, ekobukana ; \q2 basi bakoya kotia yango na moto. \q1 Mpo ete bato oyo bazangi mayele, \q2 yango wana Mokeli na bango ayokelaki bango mawa te, \q2 Mozalisi na bango atalisaki bango ngolu na Ye te. \s1 Kozonga ya monene \p \v 12 Na tango wana, Yawe akotuta ble wuta na ngambo ya ebale (Efrate) kino na mayi oyo etiolaka makasi na bangomba ya Ejipito. Boye, bino bana ya Isalaele, Yawe akolokota bino moko na moko mpo na kosangisa bino. \v 13 Na mokolo wana, bakobeta kelelo oyo ya monene ; bato oyo bazalaki kobebisama na mokili ya Asiri mpe oyo bakendeki na bowumbu na Ejipito bakoya mpe bakogumbamela Yawe na ngomba ya bule, na Yelusalemi. \c 28 \s1 Mawa na bakambi ya Efrayimi mpe ya Yuda \q1 \v 1 Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi \q2 mpe na fololo ekawuka, \q1 fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango, \q2 oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko, \q1 na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino \q2 bazalaki kosalela lolendo ! \q1 \v 2 Tala, Nkolo azali na elombe moko ya nguya mpe ya makasi, \q2 elombe yango azali lokola mvula ya mabanga \q1 mpe mopepe oyo ebebisaka ; \q2 azali lokola mvula ya makasi mpe mpela ya somo, \q2 akokweyisa na makasi engumba yango na mabele. \q1 \v 3 Motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi \q2 ekonyatama na makolo ; \q1 \v 4 mpe fololo ekawuka oyo ezalaki kosala kitoko na yango \q2 na moto ya lubwaku ya kitoko \q1 ekokoma lokola mbuma ya figi ya liboso \q2 oyo ebotaka liboso ya eleko ya molunge : \q1 soki kaka moto amoni yango, \q2 akobuka mpe akomela yango mbala moko. \q1 \v 5 Na mokolo wana, Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 akozala motole ya lokumu mpe elembo ya kitoko \q2 mpo na ndambo ya bato na Ye ; \q1 \v 6 akopesa makanisi ya bosembo \q2 epai na ye oyo avandi mpo na kosambisa, \q1 mpe akozala mopesi makasi \q2 epai na bato oyo babenganaka na bitumba kino na ekuke. \s1 Basambisi oyo balangwaka masanga \q1 \v 7 Mpe lisusu, Banganga-Nzambe mpe basakoli bapengwi \q2 mpo na masanga ya vino ; \q1 masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango ; \q2 masanga epengwisi bango, vino ebungisi bango, \q1 masanga makasi ekomi kotengisa-tengisa bango ; \q2 bakomi kobunga na bimoniseli na bango, \q2 bakomi kokata makambo na ndenge esengeli te. \q1 \v 8 Bamesa nyonso etondi na bisanza ya nkele ; \q2 esika ya malamu etikali lisusu te. \b \q1 \v 9 Azali nani, ye oyo azali koluka koteya ? \q2 Alingi kolimbola bimoniseli na ye epai ya banani ? \q1 Epai ya bana oyo balongoli na mabele, \q2 bana oyo bakati bango mabele ? \q1 \v 10 Pamba te ezali nde \q2 « Bilobaloba ya pamba\f + \fr 28.10 \fr*\ft Na lokota ya Ebre ezali Saw lasaw, qaw laqaw, zeer sham, zeer sham. Elingi koloba : pasi likolo ya pasi, elikya likolo ya elikya, moke awa, moke kuna.\ft*\f*. » \q1 \v 11 Solo, Nzambe akoloba na bato oyo \q2 na nzela ya likukuma mpe na lokota ya bapaya ; \q1 \v 12 alobaki na bango : \q2 « Tala esika ya kopema ! \q1 Tika ete moto oyo alembi apema ; » \q2 mpe : « Tala esika ya kimia, » \q2 kasi balingaki koyoka te. \q1 \v 13 Bongo Liloba na Yawe ekokoma mpo na bango \q2 se bilobaloba ya pamba \q1 mpo ete, wana ezali bango kotambola, \q2 bakweya na ndenge ya sima, \q1 babukana mikongo, \q2 bazwama na mitambo mpe bakangama. \s1 Moboko ya malamu \q1 \v 14 Yango wana, bino batioli oyo bozali kokamba bato ya Yelusalemi, \q2 boyoka Liloba na Yawe ! \q1 \v 15 Bozali koloba : « Tosalaki boyokani elongo na kufa, \q2 boyokani elongo na mboka ya bakufi. \q1 Tango likama ya makasi ekoya, \q2 ekozwa biso te ; \q1 pamba te tokomisi lokuta ekimelo na biso \q2 mpe makambo ya lokuta ebombamelo na biso. » \b \q1 \v 16 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q2 « Tala, nasili kotia libanga moko kati na Siona, \q1 libanga ya makasi, libanga ya songe ya ndako, \q2 libanga ya motuya mpo na moboko ya malonga ; \q1 moto oyo akozwa yango lokola eyekamelo na ye \q2 akotikala kobanga te. \q1 \v 17 Nakotia bosembo lokola singa oyo bamekelaka molayi \q2 mpe boyengebene lokola singa ya mbodi ; \q1 mvula ya mabanga ekokombola ekimelo na bino ya lokuta, \q2 mpe mayi ekozindisa ebombamelo na bino. \b \q1 \v 18 Boyokani na bino elongo na kufa ekobebisama, \q2 boyokani oyo bosalaki elongo na mokili ya bakufi ekolonga te ; \q1 tango likama ya makasi ekokomela bino, \q2 ekobebisa bino penza nye. \q1 \v 19 Tango makambo nyonso oyo ekoya, \q2 ekobebisa bino ; pamba te ekoleka na tongo nyonso, \q2 na moyi nyonso mpe na butu nyonso. » \b \q1 Bososoli ya emoniseli oyo ekomema nde somo makasi. \q1 \v 20 Boye, ndenge balobaka na lisese : \q2 « Mbeto eleki mokuse mpo na kominyolusa, \q2 mpe bulangeti eleki moke mpo na komizipa nzoto ; » \q1 \v 21 Yawe akotelema ndenge atelemaki na ngomba Perasimi, \q2 akotomboka ndenge atombokaki na lubwaku ya Gabaoni \q1 mpo na kosala mosala na Ye, \q2 mosala na Ye oyo ya kokamwa, \q1 mpe kokokisa mosala na Ye, \q2 mosala ya kokamwa oyo esalema nanu te. \q1 \v 22 Sik’oyo, botika maseki na bino, \q2 noki te minyololo na bino ekokoma lisusu makasi ; \q1 pamba te Nkolo Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 ayebisaki ngai ete asili kozwa mokano \q2 ya kobebisa mokili mobimba. \s1 Bwanya oyo ezanga suka \q1 \v 23 Bofungola matoyi mpe boyoka mongongo na ngai, \q2 bosala keba mpe boyoka malamu \q2 makambo oyo nazali koloba ! \q1 \v 24 Boni, ezali tango nyonso nde mosali bilanga abalolaka mabele, \q2 akataka mikala mpe atimolaka mabele mpo na kolona ? \q1 \v 25 Sima na kobongisa esika ya kolona, \q2 boni, akoki te kolona nkona ya nijeli to kobwaka kumini ? \q1 Boni, akoki te kolona ble na esika oyo ebongi, \q2 mpe orje, na esika oyo ekoki ; \q2 mpe epotele, na bandelo ya elanga na ye ? \q1 \v 26 Nzambe na ye ateyaka ye \q2 mpe alakisaka ye nzela oyo asengeli kolanda. \q1 \v 27 Pamba te basalelaka te mabaya ya kilo, \q2 oyo mpunda ebendaka mpo na kobuka nijeli \q1 to bapine ya shar mpo na kobuka kumini ; \q2 basalelaka nde lingenda mpo na kobuka nijeli mpe kumini. \q1 \v 28 Esengeli konika ble mpo na kosala mapa ; \q2 nzokande babetaka yango tango nyonso te, \q1 balekisaka nde bapine ya shar na likolo na yango \q2 mpe mabaya ya kilo, oyo mpunda ebendaka, \q2 kasi banikaka yango te. \q1 \v 29 Nyonso wana mpe ewuti epai na Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 oyo mabongisi na Ye ezali ya kitoko makasi \q2 mpe bwanya na Ye ezali monene. \c 29 \s1 Mawa mpe lobiko ya Yelusalemi \q1 \v 1 Mawa na yo, Arieli, Arieli, \q2 engumba oyo Davidi azalaki kovanda ! \q1 Bobakisa mibu na mibu \q2 mpe botika ete bafeti na bino ekoba \q2 kolandana ndenge ezalaka. \q1 \v 2 Kasi nakonyokola Arieli ; \q2 ekokoma na mawa mpe na kolela ; \q2 ekokoma na miso na Ngai lokola etumbelo. \q1 \v 3 Nakozingela yo mpo na kobundisa yo, \q2 nakozingela yo na mir ya molayi \q1 mpe nakotiela yo mampinga ya nguya \q2 mpo na kotelemela yo. \q1 \v 4 Okokitisama solo na se, \q2 okoloba wuta na mabele, \q1 mpe maloba na yo ekobanda kobima \q2 na mongongo ya se wuta na putulu. \q1 Mongongo na yo ekokoma kobima wuta na se ya mabele \q2 lokola mongongo ya moto oyo asololaka na milimo ya bakufi ; \q1 mpe wuta na putulu, maloba na yo ekobima \q2 na mongongo ya se. \b \q1 \v 5 Bongo ebele ya banguna na yo bakokoma lokola putulu, \q2 mpe ebele ya banyokoli na yo bakokoma lokola matiti ekawuka \q1 oyo ezali kopumbwa na mopepe ; \q2 ekosalema bongo na pwasa. \q1 \v 6 Yawe, Mokonzi ya mampinga, akoya epai na yo \q2 na nzela ya bakake, ya koningana ya mabele \q1 mpe ya lokito monene, ya mopepe makasi \q2 mpe ya mvula ya moto oyo etumbaka. \q1 \v 7 Ekozala lokola ndoto to emoniseli ya butu \q2 mpo na ebele ya bikolo oyo bakobundisa Arieli, \q1 oyo bakotelemela ye \q2 elongo na bandako na ye ya makasi mpe bakozingela ye. \q1 \v 8 Ekozala lokola moto oyo azali na nzala, \q2 bongo azali kolota ndoto ete azali kolia, \q1 kasi tango alamuki, libumu na ye ezali kaka pamba \q2 lokola moto oyo azali na posa ya mayi, \q1 bongo azali kolota ndoto ete azali komela mayi, \q2 kasi tango alamuki na nzoto ya kolemba, \q1 posa na ye ya mayi esili kaka te. \q2 Ekozala nde bongo mpo na mampinga ya bikolo nyonso \q2 oyo bakobundisa ngomba Siona. \s1 Bato ya mayele oyo bakufa miso mpe balangwaka masanga \q1 \v 9 Bozanga maloba mpe bokamwa ! \q2 Bomiboma miso mpe botikala bakufi miso ! \q1 Bolangwa masanga, kasi na vino te ! \q2 Botenga-tenga, kasi na masanga ya makasi te ! \q1 \v 10 Yawe asopeli bino molimo ya pongi makasi ; \q2 akangi bino miso, bino basakoli, \q2 azipi bino mito, bino bato oyo bomonaka makambo. \p \v 11 Mpo na bino, emoniseli nyonso oyo ekomi lokola maloba ya buku oyo bakanga mpe bapesi epai ya moto oyo ayebi kotanga, bongo balobi na ye : « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi : « Nakokoka te, pamba te buku ekangama. » \v 12 To bapesi yango epai ya moto oyo ayebi kotanga te, mpe balobi na ye : « Nabondeli yo, tanga nanu buku oyo, » kasi azongisi : « Nayebi kotanga te. » \q1 \v 13 Nkolo alobi : \q2 « Bato oyo bapusanaka pene na Ngai kaka na monoko, \q1 bapesaka Ngai lokumu kaka na bibebu, \q2 kasi mitema na bango ezalaka mosika na Ngai ; \q1 mpe botosi oyo bazalaka na yango epai na Ngai \q2 ezali kaka mobeko ya bomoto, oyo bateyaki bango. \q1 \v 14 Yango wana, nakokoba kokamwisa bato oyo ; \q2 ekozala nde bikamwa likolo ya bikamwa \q1 kino bwanya ya bato ya bwanya ekobunga, \q2 mpe mayele ya bato ya mayele ekosuka. » \s1 Bozoba ya bato \q1 \v 15 Mawa na bato oyo basalaka makambo na nkuku \q2 mpo na kobombela Yawe mabongisi na bango ; \q1 bato oyo basalaka misala na bango na molili \q2 mpe balobaka : « Nani akoki komona biso ? \q2 Nani akoyeba ? » \q1 \v 16 Bozali nde kobongola makambo ! \q2 Ezali lokola bozali kozwa mosali mbeki \q1 ndenge moko na mabele oyo basalelaka mbeki. \q2 Boni, eloko ekoki solo koloba na mosali na yango : \q1 « Asalaki ngai te ? » \q2 Mbeki ekoki solo koloba na mosali mbeki : \q2 « Ozali mayele te ? » \s1 Nyonso ekobongwana \q1 \v 17 Etikali kaka tango moke, \q2 Libani ekobongwana elanga ya kitoko, \q2 mpe elanga ya kitoko ekomonana lokola zamba. \q1 \v 18 Na mokolo wana, bakufi matoyi bakoyoka maloba ya buku, \q2 mpe bakufi miso bakomona \q2 tango bakobima na butu mpe na molili. \q1 \v 19 Bato bakelela bakosepela makasi kati na Yawe, \q2 babola bakozala na esengo kati na Mosantu ya Isalaele. \q1 \v 20 Banyokoli bakotikala lisusu te, batioli bakozala lisusu te \q2 mpe bato oyo balukaka pasi ya baninga bakokufa : \q1 \v 21 elongo na bato oyo bakweyisaka bato \q2 kati na kosamba mpo na liloba moko, \q1 elongo na bato oyo batielaka basambisi mitambo \q2 mpe bapesaka matatoli ya lokuta, na kosambisama, \q2 mpo na kokweyisa moto ya sembo. \b \q1 \v 22 Mpo na yango, tala liloba oyo Yawe, \q2 Mosikoli ya Abrayami, \q1 alobi na libota ya Jakobi : \q2 « Jakobi akozala lisusu na soni te, \q2 elongi na ye ekozala lisusu ya kokawuka te. \q1 \v 23 Tango akomona kati na bango bana na ye, \q2 mosala ya maboko na Ngai, \q1 bakopesa lokumu na bosantu ya Kombo na Ngai \q2 mpe bakososola bosantu ya Mosantu ya Jakobi. \q2 Boye, bakozala na somo ya Nzambe ya Isalaele. \q1 \v 24 Bato oyo bazali koyengayenga na molimo bakozwa mayele, \q2 mpe bato ya mito makasi bakondima koyekola mateya ya sika. » \c 30 \s1 Ejipito : elikya ya pamba \q1 \v 1 « Mawa na bana ya mito makasi, » \q2 elobi Yawe : \q1 « basalaka mabongisi oyo ewutaka epai na Ngai te \q2 mpe basalaka boyokani oyo ewuti na Molimo na Ngai te, \q2 mpo ete babakisa lisumu likolo ya lisumu ; \q1 \v 2 mawa na bato oyo bakendaka na Ejipito, \q2 na kozanga kotuna toli na Ngai, \q1 mpo na koluka lisungi ya kobatelama epai ya Faraon \q2 mpe koluka ebombamelo na se ya elili ya Ejipito ! \q1 \v 3 Kasi ndako batonga makasi ya Faraon epai wapi bokokimela \q2 ekokomela bino soni, \q2 mpe elili ya Ejipito ekokoma likambo ya soni makasi. \q1 \v 4 Ata bakalaka na bango bazali na Tsoani \q2 mpe bantoma na bango bakomi na Anesi, \q1 \v 5 bango nyonso bakoyoka kaka soni \q2 na miso ya bato oyo bakosunga bango ata moke te, \q1 oyo bakopesa bango ata lisungi to litomba moko te, \q2 kasi bobele soni mpe kotiolama. » \p \v 6 Maloba na Yawe na tina na banyama ya Negevi : \q1 Kati na mokili ya pasi mpe ya kobanga, \q2 mokili ya bankosi ya mibali mpe ya bankosi ya basi, \q1 ya etupa mpe ya banyoka oyo epumbwaka, \q2 bantoma bazali komema bozwi na bango \q1 na mikongo ya ba-ane, \q2 bomengo na bango na mikongo ya bashamo, \q1 epai ya ekolo oyo ekotikala kopesa bango \q2 ata litomba moko te : \q1 \v 7 ekolo ya Ejipito oyo lisungi na yango ekozala \q2 penza na tina moko te ; \q2 yango wana, napesi yango kombo « Rahavi.\f + \fr 30.7 \fr*\ft Rahavi ezali kombo mosusu ya Ejipito ; elakisi : akokisaka te maloba oyo alobaka\ft*\f* » \s1 Libota ya batomboki \q1 \v 8 Kende sik’oyo, koma makambo oyo \q2 na etando ya libanga liboso na bango, \q1 koma yango na buku moko \q2 mpo ete na mikolo oyo ekoya, \q2 ezala lokola litatoli ya libela na libela. \b \q1 \v 9 Bato oyo bazali libota ya batomboki, bazali bana ya lokuta, \q2 bana oyo balingaka te koyoka mateya ya Yawe ; \q1 \v 10 balobaka na bato oyo bamonaka makambo : « Bomona te, » \q2 mpe na basakoli : « Bosakolela biso bimoniseli ya solo te, \q1 boyebisa biso makambo oyo esepelisaka biso, \q2 bosakolela biso makambo ya lokuta. \q1 \v 11 Botika nzela wana, \q2 bobima penza na nzela wana \q1 mpe botika kotungisa biso \q2 mpo na Mosantu ya Isalaele ! » \b \q1 \v 12 Mpo na yango, tala liloba oyo Mosantu ya Isalaele alobi : \q2 « Lokola bobwaki maloba oyo, \q1 lokola bokangami na monyokoli \q2 mpe na mokosi oyo bozali kotiela motema, \q1 \v 13 lisumu oyo ekokoma mpo na bino \q2 lokola mir ya molayi oyo esala nzela mpe lidusu, \q1 bongo ebukani mpe ekweyi mbala moko na mbalakata. \q1 \v 14 Ekobukana ndambo-ndambo lokola mbeki ya mosali mbeki, \q2 ekopanzana penza nye na mawa te ; \q1 bongo ata eteni moko te ekozwama kati na yango \q2 mpo na kozwela likala ya moto na mbabola \q2 to mpo na kotokela mayi na libulu. » \s1 Kimia mpe elikya ya solo \q1 \v 15 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe, \q2 Mosantu ya Isalaele, alobi : \q1 « Ekozala kati na kobongola mitema mpe kimia \q2 nde bokozwa lobiko na bino ; \q1 ekozala na nzela ya kimia mpe ya elikya \q2 nde bokozwa makasi na bino ; \q2 kasi bino, bolingi bongo te. \q1 \v 16 Bolobaki : ‹ Te, tokopota mbangu likolo ya mpunda ; › \q2 solo, bokokima nde ! \q1 Bolobaki : ‹ Tokopota mbangu na mpunda oyo eleki mbangu ; › \q2 solo, bato oyo bakolanda bino bakoleka bino na mbangu ! \q1 \v 17 Bato nkoto moko bakokima \q2 na mangungu ya moto moko kaka ; \q1 mpe na mangungu ya bato mitano, \q2 bino nyonso bokokima kino bokotikala lokola nzete ya bendele \q1 na songe ya ngomba, \q2 mpe lokola bendele na likolo ya ngomba moke. » \b \q1 \v 18 Nzokande, Yawe alingi kosalela bino ngolu, \q2 atelemi likolo mpo na koyokela bino mawa. \q1 Pamba te Yawe azali Nzambe ya sembo : \q2 Esengo na bato nyonso oyo batalelaka Ye ! \q1 \v 19 Oh bato ya Siona, bino oyo bavandaka na Yelusalemi, \q2 bokolela lisusu te. \q1 Tango bokobelela Ye, akoyokela bino mawa ; \q2 tango kaka akoyoka, akoyanola bino. \q1 \v 20 Nkolo akopesa bino lipa na tango ya pasi, \q2 mpe mayi na tango ya minyoko ; \q1 moto oyo akoteya bino akotikala lisusu ya kobombama te, \q2 kasi miso na bino moko ekomona ye. \q1 \v 21 Ata bokeyi na ngambo ya loboko ya mobali \q2 to na ngambo ya loboko ya mwasi, \q1 matoyi na bino ekoyoka sima na bino liloba oyo : \q2 « Tala nzela yango oyo ! » \q1 \v 22 Bokotala lokola mbindo bikeko oyo balatisa palata \q2 mpe bikeko ya bibende oyo balatisa wolo ; \q1 bokobwaka yango mosika \q2 ndenge babwakaka elamba ya makila ya mwasi oyo azali komona sanza, \q2 mpe bokoloba na yango : « Longwa awa ! » \b \q1 \v 23 Boye, akotindela yo lisusu mvula \q2 mpo na milona oyo okolona na mabele, \q1 mpe bilei oyo mabele ekobota na mokili ekozala ebele mpe elengi. \q2 Na mokolo wana, bibwele na bino ekolia na bazamba minene. \q1 \v 24 Bangombe mpe ba-ane oyo ebalolaka mabele ya bilanga \q2 ekolia matiti ya mungwa oyo baponi na pawu mpe na kiyungulu. \q1 \v 25 Na mokolo ya kosambisa, tango bandako milayi ekobukana, \q2 bibale ya mayi ekotiola na bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse. \q1 \v 26 Pole ya sanza ekongenga lokola pole ya moyi, \q2 mpe pole ya moyi ekongenga makasi \q1 koleka mbala sambo lokola pole ya mikolo sambo, \q2 na mokolo oyo Yawe akotia kisi na pota ya bato na Ye \q2 mpe akobikisa yango. \s1 Kanda ya Yawe epai na Asiri \q1 \v 27 Tala, wuta mosika, Kombo ya Yawe ezali koya ; \q2 kanda na Ye ezali kopela lokola moto \q1 elongo na lipata ya molinga ya moto makasi ; \q2 bibebu na Ye etondi na kanda, \q2 mpe lolemo na Ye ezali lokola moto oyo ebomaka. \q1 \v 28 Pema na Ye ezali lokola ebale oyo etondi makasi, \q2 ebale oyo etondi kino na kingo. \q1 Akoyungola bikolo na kiyungulu ya pasi, \q2 akotia na mbanga ya bato ebende \q1 oyo batiaka na minoko ya bampunda \q2 mpo ete emema bango na libunga. \b \q1 \v 29 Mpo na bino, bokoyemba banzembo \q2 lokola na butu oyo basalaka bafeti ya bule ; \q1 mitema na bino ekotonda na esengo \q2 lokola bato oyo bazali kobeta flite \q1 mpo na kokende na Ngomba ya Yawe, \q2 na Libanga ya Isalaele. \q1 \v 30 Yawe akosala ete bato bayoka mongongo na Ye ya nkembo \q2 mpe akomonisa bango nguya ya loboko na Ye \q1 kati na kanda makasi na Ye, \q2 kati na moto oyo ebomaka, \q2 kati na mvula makasi ya bakake mpe ya mabanga. \b \q1 \v 31 Mongongo ya Yawe ekokweyisa Asiri, \q2 mpe akobeta bango na lingenda na Ye ya bokonzi. \q1 \v 32 Mbala nyonso oyo Yawe akobeta bango \q2 fimbu na Ye ya kosambisa, \q1 ekolandisama na mindule ya bambunda mike mpe ya mandanda, \q2 ndenge moko mpe tango akoningisa loboko na Ye \q2 mpo na kobundisa bango. \q1 \v 33 Babongisaki wuta kala Tofeti, \q2 babongisaki yango nde mpo na mokonzi ; \q1 basalaki libulu na yango ya moto mozindo mpe monene \q2 mpo ete ebimisa moto makasi mpe ekota bakoni ebele. \q1 Pema na Yawe, oyo ezali lokola ebale ya sofolo \q2 nde ekopelisa yango. \c 31 \s1 Mawa na bato oyo batalelaka Ejipito \q1 \v 1 Mawa na bato oyo bazali kokende \q2 na Ejipito mpo na koluka lisungi, \q1 oyo bazali kotia mitema na bampunda, \q2 oyo bazali kotia elikya na bashar \q1 mpo ete ezali ebele, \q2 mpe na nguya ya basoda oyo batambolisaka yango, \q1 kasi batalelaka Mosantu ya Isalaele te \q2 mpe balukaka lisungi epai na Yawe te ! \q1 \v 2 Nzokande, Ye mpe azali na bwanya \q2 mpe akoki koyeisa pasi ; \q1 abongolaka maloba na Ye te. \q2 Atelemelaka ndako ya bato mabe \q2 mpe bato oyo basungaka bango. \q1 \v 3 Bato ya Ejipito bazali kaka bato, kasi bazali Nzambe te, \q2 bampunda na bango ezali kaka mosuni, kasi ezali molimo te. \q1 Tango Yawe akosembola loboko na Ye, \q2 ye oyo asungaka akobeta libaku, \q1 mpe ye oyo bazali kosunga akokweya ; \q2 bongo, bango mibale bakobebisama. \s1 Ezali Yawe nde Abikisaka \q1 \v 4 Tala liloba oyo Yawe alobi na ngai : \q2 « Ndenge nkosi to mwana nkosi egangaka \q1 liboso ya mosuni na yango, \q2 ata lisanga monene ya babateli bibwele basangani \q1 mpo na kotelemela yango, \q2 ezalaka na somo ya makelele na bango te \q1 mpe ezongaka sima te na mangungu na bango, \q2 ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q1 akokita na ngomba Siona mpe na ngomba na yango ya moke \q2 mpo na kobunda. \q1 \v 5 Ndenge ndeke efungolaka mapapu na yango, \q2 ndenge wana mpe Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q1 akobatela Yelusalemi, \q2 akobatela mpe akokangola, \q2 akobikisa yango na likama mpe akosunga yango. » \m \v 6 Oh bana ya Isalaele, bozonga epai na Ye oyo botombokeli makasi ! \v 7 Na mokolo wana, moko na moko kati na bino akobwaka banzambe na ye ya bikeko ya palata mpe ya wolo oyo bosalaki na maboko na bino ya masumu. \q1 \v 8 « Mokili ya Asiri ekokweyisama na mopanga \q2 ya moto ya mokili oyo te, \q1 ekobebisama na mopanga ya moto te. \q2 Bato ya Asiri bakokima liboso ya mopanga, \q1 mpe basoda na bango ya bilenge bakokoma \q2 kosala misala ya makasi. \q1 \v 9 Libanga na bango ya makasi ekolimwa na somo ; \q2 mpe bakambi na bango bakolenga na somo na komona bendele ya etumba, » \q1 elobi Yawe \q2 oyo moto na Ye ezali kati na Siona \q2 mpe fulu ya moto na Ye ezali kati na Yelusalemi. \c 32 \s1 Bokonzi ya sembo \q1 \v 1 Tala, mokonzi moko akokonza na bosembo, \q2 mpe bakambi na ye bakokamba na solo. \q1 \v 2 Moko na moko kati na bango akozala \q2 lokola ekimelo liboso ya mopepe \q1 mpe ebombamelo liboso ya mvula ya makasi ; \q2 akozala lokola miluka ya mayi kati na esobe, \q2 lokola elili ya libanga monene kati na mokili ya mabele ekawuka. \q1 \v 3 Miso ya bato oyo bamonaka ekozipama lisusu te, \q2 mpe matoyi ya bato oyo bayokaka ekoyoka malamu. \q1 \v 4 Mito ya bato oyo bazangi mayele \q2 ekozwa boyebi mpe bososoli, \q1 bongo lolemo ya bato ya likukuma ekokoma koloba \q2 noki-noki mpe malamu. \q1 \v 5 Bakobenga lisusu te moto ya lokumu zoba, \q2 mpe bakobenga lisusu te moto oyo akabaka moyimi ; \q1 \v 6 pamba te zoba alobaka kaka na bozoba, \q2 motema na ye ekanisaka kaka makambo mabe : \q1 atiolaka nzela ya bule, \q2 alobaka maloba ya nkele mpo na kotelemela Yawe, \q1 atikaka libumu ya moto oyo azali na nzala pamba \q2 mpe apesaka te mayi na moto oyo azali na yango posa. \q1 \v 7 Misala ya moyimi ezalaka mabe, \q2 abongisaka kaka miango ya mabe \q1 mpo na kopengwisa mobola na maloba ya lokuta \q2 na tango oyo mobola azali na mbeba te. \q1 \v 8 Kasi moto ya lokumu asalaka mabongisi ya lokumu \q2 mpe alendaka mpo na misala na ye ya lokumu. \s1 Basi ya Yelusalemi \q1 \v 9 Bino basi oyo bovandaka na kimia, \q2 botelema mpe boyoka ngai ; \q1 bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te, \q2 boyoka makambo oyo nalingi koloba : \q1 \v 10 Etikali kaka mikolo moke kati na mobu, \q2 bino basi oyo bozali na kimia, bokoningana ; \q1 pamba te tango ya kosangisa milona ya vino esili koleka, \q2 mpe tango ya kobuka bambuma ekozala lisusu te. \q1 \v 11 Bolenga, bino basi oyo bovandaka na kimia ; \q2 boningana, bino bilenge basi oyo bomitungisaka na eloko moko te ! \q1 Bolongola bilamba na bino mpe botikala bolumbu, \q2 bolata basaki na loketo na bino ! \q1 \v 12 Bolela na kobeta tolo mpo na bilanga ya kitoko, \q2 mpo na bilanga ya vino oyo ebotaka malamu, \q1 \v 13 mpe mpo na mokili ya bato na ngai ; \q2 pamba te mokili oyo eboti basende mpe banzube. \q1 Solo, bolela mpo na bandako nyonso ya kitoko \q2 mpe mpo na engumba oyo etonda na bisengo, \q1 \v 14 pamba te basundoli ndako ya mokonzi ; \q2 engumba oyo etonda makelele etikali lisusu na bato te, \q2 Ofeli mpe ndako molayi ya bakengeli ekomi mpo na libela \q1 mabulu ya mabanga mpo na bisengo ya ba-ane ya zamba, \q2 mpe ekokoma etando epai wapi bibwele ekobanda kolia matiti, \q1 \v 15 kino tango Molimo akosopanela biso wuta na likolo, \q2 bongo esobe ekokoma bilanga oyo ebotaka kitoko ; \q1 mpe bilanga oyo ebotaka kitoko ekomonana \q2 lokola zamba monene. \q1 \v 16 Bosembo ekowumela kati na esobe, \q2 mpe solo ekozala kati na bilanga oyo ebotaka kitoko. \q1 \v 17 Mbuma ya bosembo ekozala kimia : \q2 bosembo ekobota bopemi mpe bobatelami mpo na libela. \q1 \v 18 Bato na ngai bakovanda na bandako ya kimia, \q2 na bandako ya malonga \q2 mpe na bisika ya bopemi ya kimia. \q1 \v 19 Na nzela ya mvula ya mabanga oyo ekonoka, \q2 zamba mpe engumba ekokitisama na se penza. \q1 \v 20 Esengo na bino oyo bozali kolona milona pene na mayi \q2 mpe kotinda ngombe mpe ane na bino konyata bisika nyonso. \c 33 \s1 Yawe azali Mokangoli na biso \q1 \v 1 Oh mobebisi, mawa na yo, \q2 yo oyo nanu obebisama te ! \q1 Oh mofundi, mawa na yo, \q2 yo oyo nanu bafunda te ! \q1 Tango okosilisa kobebisa, \q2 yo mpe bakobebisa yo, \q1 tango okosilisa kofunda, \q2 yo mpe bakofunda yo. \q1 \v 2 Oh Yawe, yokela biso mawa, tozali kotalela Yo ! \q2 Tongo nyonso, zala makasi na biso, \q2 zala lobiko na biso na tango ya pasi ! \q1 \v 3 Kaka na lokito ya mongongo na Yo, \q2 bato bakimaka ; \q2 soki otelemi, bikolo epalanganaka. \q1 \v 4 Oh bikolo, bakolokota bomengo na bino ya bitumba \q2 ndenge balokotaka mankoko ; \q2 bakosopanela yango na elulu ndenge mabanki esalaka. \q1 \v 5 Yawe anetolami mpo ete avandaka na likolo, \q2 akotondisa Siona na bosembo mpe na solo. \q1 \v 6 Mikolo ya bomoi na yo ekozala na kimia ; \q2 bwanya mpe boyebi ekozala bomengo ya lobiko na yo ; \q2 kotosa Yawe, yango nde bozwi na yo. \s1 Tango Yawe akosala \q1 \v 7 Tala, basoda na bango ya mpiko \q2 bazali koganga makasi na balabala ; \q2 bamemi sango ya kimia, azali kolela makasi. \q1 \v 8 Nzela ya minene esili kokawuka, \q2 ata moto moko te ya mobembo azali koleka. \q1 Mobebisi abuki boyokani, \q2 asambwisi bingumba \q2 mpe azali na botosi ya moto ata moko te. \q1 \v 9 Mokili ezali na matanga, esili kolemba nzoto, \q2 Libani esambwe na soni \q1 mpe elembi-lembi lokola fololo, \q2 Saroni ekomi lokola esobe \q2 mpe Bashani mpe Karimeli ekweyisi makasa na yango. \q1 \v 10 « Sik’oyo nakotelema, » elobi Yawe. \q2 « Sik’oyo nakonetolama, \q2 sik’oyo nakotombolama. \q1 \v 11 Mabongisi ya mitema na bino \q2 ezali kaka lokola matiti ya kokawuka \q1 mpe soki ekokisami, \q2 ezalaka kaka lokola matiti ya kokawuka, \q2 pema na bino moko ekozikisa bino lokola moto. \q1 \v 12 Bato bakozika na libanga ya moto, \q2 ndenge nzube oyo bakata ezikaka na moto. » \b \q1 \v 13 Bino bato oyo bozali mosika, \q2 boyoka makambo oyo nazali kosala, \q1 bino bato oyo bozali pene, \q2 bososola nguya na ngai ! \q1 \v 14 Bato ya masumu bazali kolenga kati na Siona, \q2 somo ekangi bato oyo bayebi Nzambe te : \q1 « Nani kati na biso akoki kowumela \q2 elongo na moto oyo ezikisaka ? \q1 Nani kati na biso akoki kowumela \q2 elongo na moto oyo epelaka tango nyonso ? » \q1 \v 15 Moto oyo atambolaka na bosembo \q2 mpe alobaka solo, \q1 moto oyo abwakaka litomba \q2 oyo ezwami na nzela ya moyibi, \q1 moto oyo asembolaka maboko na ye te \q2 mpo na kozwa kanyaka, \q1 moto oyo akangaka matoyi na ye \q2 mpo na koboya koyoka masolo ya koboma bato, \q1 mpe oyo akangaka miso na ye \q2 mpo na koboya komona mabe. \q1 \v 16 Moto wana akovanda na likolo : \q2 mabanga ya makasi ekozala ekimelo na ye. \q2 Akozanga te lipa ya kolia mpe mayi ya komela. \s1 Lobiko ya Yelusalemi \q1 \v 17 Miso na yo ekomona Mokonzi na kitoko na Ye nyonso \q2 mpe ekomona ndenge mokili ekenda kino na mosika. \q1 \v 18 Motema na yo ekokanisa lisusu somo oyo ozalaki koyoka : \q2 « Wapi mokonzi oyo azwaka mpako ? \q1 Wapi moto oyo amekaka bakilo ? \q2 Wapi moto oyo atalaka bandako na biso ya milayi ? » \q1 \v 19 Okomona lisusu bato ya lolendo te, \q2 bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koyoka \q2 mpe maloba na bango, pasi mpo na kososola. \q1 \v 20 Tala Siona, engumba ya bafeti na biso ya minene, \q2 miso na yo ekomona Yelusalemi, \q1 ndako ya kimia, ndako ya kapo oyo ekopikama makasi ; \q2 bakokoka kopikola makonzi na yango te, \q2 mpe basinga na yango ekokatana te. \q1 \v 21 Kuna, Yawe akozala Elombe na biso. \q2 Ekozala etuka ya bibale minene mpe ya miluka. \q1 Masuwa moko te ekoya kuna, \q2 masuwa moko te ya lokumu ekoleka wana. \q1 \v 22 Pamba te Yawe azali Mosambisi na biso, \q2 Yawe azali Mosali mibeko na biso, \q1 Yawe azali Mokonzi na biso ; \q2 Ye nde akobikisa biso. \q1 \v 23 Basinga na yo esili kolemba, \q2 ezali lisusu te kosimba malamu nzete ya bendele ; \q1 ezali lisusu te kofungola malamu vwale. \q2 Boye, na tango bakokabola ebele ya bomengo ya bitumba, \q1 bato ya tengu-tengu, bango moko penza, \q2 bakobotola eteni na bango ya bomengo. \q1 \v 24 Movandi moke te ya Siona akoloba : « Nazali kobela ! » \q2 Masumu ya bavandi ya kuna ekolimbisama. \c 34 \ms1 Nzambe akopesa Lifuti \s1 Kosambisama ya bikolo \q1 \v 1 Bino bikolo, bobelema pene mpe boyoka ; \q2 bino bato, botia matoyi ! \q1 Tika ete mabele, elongo na nyonso \q2 oyo ezali kati na yango, \q2 mpe mokili, elongo na nyonso oyo ewuti na yango, eyoka ! \q1 \v 2 Yawe atombokeli bikolo nyonso, \q2 kanda na Ye ezali likolo ya mampinga ya bikolo nyonso. \q1 Akobebisa bango penza nye, \q2 akokaba bango na kufa. \q1 \v 3 Bakobwaka bibembe na bango na mabele, \q2 bongo bibembe yango ekobimisa solo makasi, \q2 mpe makila ekokita lokola ebale na bangomba. \q1 \v 4 Mampinga nyonso ya likolo ekobukana ; \q2 mpe mapata ekolingama lokola buku, \q1 bongo mampinga na yango nyonso ekokweya \q2 ndenge makasa ya nzete ya vino mpe ya figi ekweyaka. \q1 \v 5 Pamba te mopanga na ngai esili kolongwa kuna na likolo ; \q2 tala, ekiti mpo na kosambisa Edomi, \q2 mpe bato oyo nabongisaki mpo na kobebisama. \q1 \v 6 Mopanga na Yawe etondi na makila, \q2 ezipami na mafuta, \q1 na makila ya bana meme mpe ya bantaba ya mibali, \q2 na mafuta ya bameme ya mibali, \q1 pamba te ezali na mbeka moko mpo na Yawe kati na Botsira \q2 mpe bazali koboma bato ebele penza kati na mokili ya Edomi. \q1 \v 7 Mpakasa ekokufa nzela moko na bango, \q2 mpe bangombe ya mibali elongo na bilenge na yango. \q1 Mabele na yango ekolangwa na makila \q2 mpe putulu na yango ekozipama na mafuta. \q1 \v 8 Pamba te ezali mpo na Yawe, \q2 mokolo ya kozongisa mabe na mabe, \q2 mobu ya lifuti mpo na likambo ya Siona. \q1 \v 9 Miluka ya Edomi ekobongwana gudron, \q2 putulu na yango, lokola moto ya fofolo \q2 mpe mabele na yango ekokoma kopela moto ; \q1 \v 10 moto oyo ekokufa te ezala na moyi to na butu, \q2 bongo molinga na yango ekobanda komata mpo na libela. \q1 Ekotikala esobe libela na libela, \q2 mpe ata moto moko te akoleka lisusu wana. \q1 \v 11 Esulungutu mpe ndeke mosusu ya butu \q2 ekozwa yango lokola libula, \q1 kumu mpe yanganga ekokoma kovanda kuna. \q2 Nzambe akosembola likolo ya Edomi \q2 singa ya mobulu mpe nivo ya kozanga. \q1 \v 12 Bankumu na yango bakozala lisusu wana te \q2 mpo na kopona mokonzi, \q2 bakambi na yango nyonso bakotikala lisusu te. \q1 \v 13 Nzube ekobota kati na ndako ya mokonzi ; \q2 basende mpe matiti, kati na bandako na ye batonga makasi ; \q1 ekokoma ndako ya bambwa ya zamba, \q2 lopango ya maligbanga. \q1 \v 14 Bikelamu ya esobe ekokutana kuna elongo na mbwa ya zamba, \q2 mpe bantaba ya mibali ekobenga baninga na yango. \q2 Kumu ekozwa kuna esika ya kolala mpe ya kopema. \q1 \v 15 Nyoka ekotonga zala na yango \q2 mpe ekobwaka maki na yango kuna, \q1 ekopasola yango mpe ekosangisa bana na yango \q2 na se ya elili na yango. \q1 Kaka kuna lisusu, ndeke oyo eliaka misuni \q2 ekosangana moko na mosusu. \q1 \v 16 Boluka kati na buku ya Yawe mpe botanga : \q2 Moko te kati na bango akozanga, \q1 moko te akomitungisa mpo na moninga na ye ; \q2 pamba te monoko na Yawe nde epesi mitindo \q2 mpe Molimo na Ye akosangisa bango elongo. \q1 \v 17 Ye abwaki zeke mpo na bango \q2 mpe loboko na Ye esaleli singa oyo bamekelaka molayi, \q1 mpo na kokabolela bango mboka. \q2 Bakozwa yango mpo na libela \q2 mpe bakovanda wana libela na libela. \c 35 \s1 Kobima ya sika \q1 \v 1 Tika ete esobe mpe mabele ya kokawuka esepela ! \q2 Tika ete esobe eyoka esengo \q2 mpe ebimisa fololo ya motane lokola roze ! \q1 \v 2 Ekobota fololo mingi penza mpe ekosepela, \q2 ekosepela mpe ekoganga na esengo. \q1 Nkembo ya Libani, lokumu ya Karimeli \q2 mpe ya Saroni ekopesamela yango ; \q1 boye bakomona nkembo ya Yawe, \q2 lokumu ya Nzambe na biso. \q1 \v 3 Pesa makasi na maboko oyo elembi, \q2 lendisa mabolongo oyo ezali kolenga ; \q1 \v 4 Loba na bato oyo bazali kobanga : \q2 « Bozala makasi, bobanga te, \q1 Nzambe na bino akoya, \q2 akoya kozongisa mabe na mabe, \q1 akoya na lifuti ya Nzambe. \q2 Ye moko akoya kobikisa bino. » \q1 \v 5 Boye, bakufi miso bakomona \q2 mpe bakufi matoyi bakoyoka. \q1 \v 6 Moto ya tengu-tengu akopumbwa lokola mboloko, \q2 mpe lolemo ya baba ekoyemba na esengo. \q1 Mayi ekobima na esobe, \q2 mpe bibale, na bisika ya kokawuka. \q1 \v 7 Zelo ya esobe ekobongwana liziba ya mayi, \q2 mpe mabele ya kokawuka ekokoma bitima ya mayi. \q1 Matiti, nzete oyo ebotaka na mayi \q2 mpe papirisi\f + \fr 35.7 \fr*\ft Papirisi ezali poso ya nzete oyo bato bazalaki kosalela na tango ya kala mpo na kokoma makomi.\ft*\f* ekobota na bisika oyo \q2 mbwa ya zamba elalaka. \b \q1 \v 8 Nzela moko ya monene ekoleka wana, \q2 bakobenga yango Balabala ya Bosantu. \q1 Moto moko te ya mbindo akoleka wana, \q2 pamba te ebongisamaki kaka mpo na bato ya Yawe. \q2 Boye ata zoba akoki te kobunga na nzela yango. \q1 \v 9 Nkosi ekozala te na nzela yango, \q2 ata nyama moko te ya mabe \q1 ekoleka na nzela yango, \q2 ekotikala komonana kuna te. \q1 Kasi basikolami kaka nde \q2 bakotambola na nzela yango. \q1 \v 10 Boye, bakangolami na Yawe bakozonga, \q2 bakokota na Siona na nzembo ya elonga, \q1 mpe esengo ya suka te ekozala \q2 na likolo ya mito na bango lokola mitole. \q1 Esengo mpe kosepela ekopesamela bango, \q2 nzokande mawa mpe kolela ekosila. \c 36 \s1 Senakeribe abebisi Yelusalemi \p \v 1 Tango Ezekiasi akokisaki mibu zomi na minei na bokonzi, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, abundisaki bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi mpe abotolaki yango. \v 2 Boye, mokonzi ya Asiri atindaki mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, elongo na mampinga ya basoda ya nguya, wuta na Lakishi kino na Yelusalemi, epai ya mokonzi Ezekiasi. Tango mokonzi ya basoda yango atelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba, \v 3 Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na ye. \v 4 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi alobaki na bango : « Boloba na Ezekiasi : \pm ‹ Tala makambo oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi : Otie elikya na yo na nini ? \v 5 Okanisi ete maloba ya pamba ekoki kozwa esika ya mayele mpe makasi ya bitumba ? Otie penza elikya na nani mpo ete otombokela ngai ? \v 6 Tala, ozali nde kotia elikya na Ejipito oyo ezali lokola mwa nzete ya bambu oyo ebukana, oyo etobolaka mpe ezokisaka loboko ya moto oyo ayekamelaka yango ! Faraon, mokonzi ya Ejipito, azalaka nde bongo mpo na bato nyonso oyo batielaka ye motema. \v 7 Mpe soki olobi na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni, ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’ \pm \v 8 Sik’oyo, nabondeli yo, beta mondenge na nkolo na ngai, mokonzi ya Asiri : nakopesa yo bampunda nkoto mibale soki okoki kopesa basoda mpo ete batambolisa yango ! \v 9 Okokoka ndenge nini kokimisa ata mokonzi moko kaka, kati na bakonzi ya basoda ya nkolo na ngai, yo oyo otiaka elikya na yo na Ejipito mpo na bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ? \v 10 Okanisi ete ngai nayei kobundisa mpe kobebisa mokili oyo na ndingisa ya Yawe te ? Ezali Ye moko Yawe nde alobaki na ngai ete nabundisa mokili oyo mpe nabebisa yango. › » \p \v 11 Eliakimi, Shebina mpe Yoa balobaki na mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi : \pi1 — Tobondeli yo, loba na biso, basali na yo, na lokota ya Arami, pamba te tososolaka yango ; koloba na biso na lokota ya Ebre te, noki te bato oyo bazali na likolo ya mir bakoyoka. \p \v 12 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki : \pi1 — Bokanisi ete nkolo na ngai atindi ngai koloba maloba oyo kaka epai na mokonzi na bino mpe epai na bino ? Te ! Maloba yango ezali mpe mpo na bato oyo batelemi na likolo ya mir, oyo bakolia nyei na bango mpe komela masuba na bango elongo na bino ? \p \v 13 Boye, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi atelemaki mpe agangaki makasi na lokota ya Ebre : « Boyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri ! \v 14 Tala makambo oyo mokonzi alobi : Tika ete Ezekiasi akosa bino te, pamba te akokoka te kokangola bino ! \v 15 Bondima te ete Ezekiasi atinda bino kotia elikya na Yawe tango azali koloba : ‹ Solo, Yawe akokangola biso. Engumba oyo ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. › \v 16 Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi : Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai ; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi mpe akomela mayi ya libulu na ye \v 17 liboso ete naya kozwa bino mpo na komema bino na mokili oyo ekokana na oyo ya bino, mokili oyo etonda na ble mpe na vino ya sika ; mokili ya mapa mpe ya bilanga ya vino. \v 18 Bondima Ezekiasi te, pamba te azali kokosa bino tango azali koloba : ‹ Yawe akokangola biso. › Boni, ezali na nzambe ya ekolo songolo, oyo alonga kokangola ekolo na ye na loboko ya mokonzi ya Asiri ? \v 19 Wapi banzambe ya Amati mpe ya Aripadi ? Wapi banzambe ya Sefarivayimi ? Boni, balongaki kokangola Samari na loboko na ngai ? \v 20 Kati na banzambe ya mikili wana, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? » \p \v 21 Kasi bato batikalaki kimia mpe bazongiselaki ye ata liloba moko te, pamba te mokonzi apesaki mitindo : « Bopesa ye eyano te ! » \p \v 22 Bongo Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki. \c 37 \s1 Kokangolama ya Yelusalemi \p \v 1 Tango mokonzi Ezekiasi ayokaki bongo, apasolaki bilamba na ye, alataki basaki mpe akotaki na Tempelo ya Yawe. \v 2 Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo ; bango nyonso balata bilamba ya basaki. \v 3 Balobaki na ye : « Tala makambo oyo Ezekiasi alobi : ‹ Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana. \v 4 Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki ! Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. › » \p \v 5 Tango bakalaka ya mokonzi Ezekiasi bakomaki epai ya Ezayi, \v 6 Ezayi alobaki na bango : « Boloba na nkolo na bino : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Kobanga te mpo na makambo oyo oyoki, maloba oyo basali ya mokonzi ya Asiri bazali koloba mpo na kosambwisa Ngai. \v 7 Tala, nakotia molimo moko kati na ye mpo ete, tango akoyoka sango ya makambo oyo ezali koleka na mboka na ye, azonga na mokili na ye ; mpe ekozala kuna, na mokili na ye, nde nakobomisa ye na mopanga. › » \p \v 8 Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye\f + \fr 37.8 \fr*\ft Mokonzi ya Asiri, kombo na ye ezalaki : Senakeribe (Tala na \+xt Ez 37.17\+xt*)\ft*\f* alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina. \p \v 9 Sima na mokonzi ya Asiri koyoka sango na tina na Tiraka, mokonzi ya Kushi, ete azali koya kobundisa ye, atindaki bantoma epai ya Ezekiasi na maloba oyo : \v 10 « Boyebisa Ezekiasi, mokonzi ya Yuda : ‹ Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo : ‘ Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. ’ \v 11 Oyokaki makambo oyo bakonzi ya Asiri basalaki bikolo nyonso mpe ndenge nini babebisaki yango nye ; okanisi ete yo nde okobika ? \v 12 Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango, bakangolaki yango ? \v 13 Wapi mokonzi ya Amati, ya Aripadi, ya Layiri, ya engumba Sefarivayimi, ya Ena mpe ya Iva ? › » \s1 Libondeli ya Ezekiasi \p \v 14 Sima na Ezekiasi kozwa mokanda kowuta na maboko ya bantoma, atangaki yango, akendeki na Tempelo ya Yawe mpe afungolaki mokanda yango liboso ya Yawe. \v 15 Mpe Ezekiasi asambelaki Yawe : \v 16 « Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele ! Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele ; Yo nde osala Likolo mpe mabele. \v 17 Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka ; Yawe, fungola miso mpe mona ! Yoka maloba nyonso oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi. \v 18 Oh Yawe, ezali ya solo ete bakonzi ya Asiri babebisaki bikolo nyonso mpe mikili na bango. \v 19 Bazikisaki banzambe na bango na moto, pamba te banzambe yango ezalaki Nzambe te, kasi banzete to mpe mabanga ya pamba oyo esalemi na maboko ya bato. \v 20 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye, mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe. » \s1 Kokweya ya Senakeribe \p \v 21 Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, atindelaki Ezekiasi maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Mpo ete osambelaki Ngai na tina na Senakeribe, mokonzi ya Asiri, \v 22 tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye : \q1 Siona, mboka kitoko, \q2 ezali kotiola yo mpe koseka yo. \q1 Yelusalemi, mboka kitoko, \q2 ezali koningisa moto mpo na kotiola yo. \q1 \v 23 Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ? \q1 Nani oyo omatiselaki mongongo \q2 mpe otalaki na miso ya lolendo ? \q1 Mosantu ya Isalaele ! \q1 \v 24 Na nzela ya bantoma na yo, \q2 ofingaki Nkolo mpe olobaki : \q1 ‹ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, \q2 namataki kino na basonge ya bangomba, \q1 kino na basonge oyo eleki likolo kati na Libani ; \q2 nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, \q1 banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, \q2 mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, \q2 na zamba na yango oyo eleki kitoko ; \q1 \v 25 natimolaki mabulu ya mayi \q2 mpe namelaki mayi ; \q1 na matambe ya makolo na ngai, \q2 nakawusaki miluka nyonso ya Ejipito. › \b \q1 \v 26 Oyoka nanu yango te ? \q1 Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala, \q2 nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala ; \q1 sik’oyo nde nakokisi yango. \q2 Esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi \q2 mipiku ya mabanga. \q1 \v 27 Bato na yango bazangi makasi, \q2 balengi na somo mpe bakomi na soni, \q1 bakomi lokola matiti ya bilanga, \q2 lokola matiti ya langi ya mayi ya pondu, \q1 lokola matiti oyo ebotaka na mitondo ya bandako, \q2 ekawuka liboso ete ekola. \b \q1 \v 28 Nayebi esika nini ozalaka, \q2 tango nini obimaka, \q1 tango nini ozongaka, \q2 mpe tango nini otombokelaka Ngai. \q1 \v 29 Lokola otombokelaka Ngai, \q2 mpe lofundu na yo ekomi kino na matoyi na Ngai, \q1 nakotia lopete na Ngai na zolo na yo, \q2 nakokanga yo singa na bibebu \q1 ndenge bakangaka mpunda monoko, \q2 mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyelaki. \b \q1 \v 30 Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo : \q2 Na mobu oyo, bokolia biloko oyo \q1 ekobima na nkona oyo ekweyaki na mabele ; \q2 na mobu oyo ekolanda, \q1 bokolia biloko oyo ebotaka yango moko. \q2 Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma, \q2 bokolona banzete ya vino mpe bokolia bambuma na yango. \q1 \v 31 Bato ya Yuda oyo bakobika, oyo bakotikala, \q2 bakozala lokola nzete \q1 oyo ekotisi misisa na yango ya sika kati na mabele \q2 mpe eboti bambuma. \q1 \v 32 Pamba te, na Yelusalemi, ndambo ya bato bakotikala ; \q2 mpe na Siona, mwa ndambo bakobika. \q1 Bolingo makasi na Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 nde ekokokisa yango. \q1 \v 33 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi \q2 na tina na mokonzi ya Asiri : \q1 ‹ Akokota na engumba oyo te, \q2 akobeta kuna ata mbanzi moko te, \q1 akobundisa yango na banguba te \q2 mpe akomatisa ata mabele te liboso na yango \q2 mpo na komibomba. \q1 \v 34 Akozongela na nzela oyo ayelaki \q2 mpe akokota na engumba oyo te, › \q2 elobi Yawe. \q1 \v 35 ‹ Nakobatela engumba oyo mpe nakobikisa yango \q2 mpo na lokumu ya Kombo na Ngai \q2 mpe mpo na lokumu ya Davidi, mosali na Ngai. › » \p \v 36 Boye, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe. \v 37 Boye, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alongolaki molako, azongaki na Ninive mpe akomaki kovanda kuna. \p \v 38 Mokolo moko, wana azalaki kogumbamela nzambe na ye, Nisiroki, kati na tempelo ya nzambe yango, bana na ye ya mibali, Adrameleki mpe Saretseri babomaki ye na mopanga mpe bakimaki na Ararati. Bongo, mwana na ye ya mobali, Esari-Adoni, akitanaki na ye na bokonzi. \c 38 \s1 Bokono mpe lobiko ya Ezekiasi \p \v 1 Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. » \p \v 2 Ezekiasi abalolaki elongi na ye na mir mpe abondelaki Yawe : \v 3 « Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. » \p Mpe Ezekiasi alelaki mingi. \p \v 4 Bongo, Yawe alobaki na Ezayi : \v 5 « Kende koloba na Ezekiasi : ‹ Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‘ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo. \v 6 Nakokangola yo elongo na engumba oyo, na maboko ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela yango. ’ \v 7 Bongo, tala elembo ya Yawe, elembo oyo ekolakisa mpo na yo ete Yawe akokokisa makambo oyo asili kolaka : \v 8 Nakozongisa sima, na badegre zomi, elili ya moyi oyo ekitaki na tango ya Akazi. › » Boye, moyi ezongaki sima, mpe ekitaki na badegre zomi. \s1 Loyembo ya matondi \p \v 9 Tala loyembo oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, akomaki na mokanda tango abikaki na bokono. \v 10 Nazalaki komilobela : \q1 « Tango nazali nanu na makasi na nzoto, \q2 naleka solo na nzela ya ekuke ya kufa \q1 mpe nazangela mibu oyo etikali na bomoi na ngai ? » \p \v 11 Namilobelaki : \q1 « Nakomona lisusu Yawe te, \q2 Yawe, na mokili ya bato ya bomoi ; \q1 nakomona lisusu ata moto moko te \q2 to kowumela elongo na bato \q2 oyo bavandi na mokili ya lelo ! \q1 \v 12 Mikolo ya bomoi esili, \q2 elongwe na bomoi na ngai ndenge balongolaka \q1 ndako ya kapo ya mobateli bibwele. \q2 Akati bomoi ngai ndenge motongi bilamba akataka basinga \q1 soki asilisi kotonga elamba. \q2 Longwa na moyi kino na butu, \q2 akomisi bomoi na ngai na suka. \q1 \v 13 Nakangaki motema kino na tongo ; \q2 kasi lokola nkosi, abuki-buki mikuwa na ngai nyonso. \q1 Longwa na moyi kino na butu, \q2 akomisi bomoi na ngai na suka. \q1 \v 14 Nazalaki koganga lokola mbilambila to ndeke ya mayi, \q2 nazalaki kolela lokola ebenga. \q1 Miso na ngai elembaki kotala likolo. \q2 Oh Yawe, natungisami, batela ngai ! » \q1 \v 15 Kasi naloba nini mpo ete ayanola ngai, \q2 pamba te Ye moko nde asali yango ! \q1 Mibu nyonso ya bomoi na ngai, \q2 nakotambola na komikitisa \q2 likolo ya pasi ya motema na ngai. \q1 \v 16 Nkolo, bato babikaka mpo na bolamu na Yo ; \q2 ezali mpe na nzela na yango \q1 nde ngai nazwi bomoi. \q2 Ozongiselaki ngai nzoto kolongono \q2 mpe opesi ngai bomoi. \q1 \v 17 Solo, pasi na ngai ebongwani esengo ; \q2 na bolingo na Yo, obateli ngai longwa na libulu na kufa ; \q1 obwaki masumu na ngai nyonso \q2 sima na mokongo na yo. \q1 \v 18 Pamba te mboka ya bakufi ekoki te kokumisa Yo, \q2 kufa ekoki kosanzola Yo te ; \q1 bato oyo bakitaka na mboka ya bakufi \q2 bazalaka na elikya na boyengebene na Yo te. \q1 \v 19 Bato na bomoi, bato ya bomoi kaka nde basanzolaka Yo \q2 ndenge ngai nazali kosanzola Yo lelo. \q2 Batata bakoteya bana na bango boyengebene na Yo. \q1 \v 20 Yawe, lokola obikisi ngai, \q2 tokobeta mindule na biso \q1 mikolo nyonso ya bomoi na biso \q2 na Tempelo ya Yawe. \p \v 21 Ezayi alobaki : \pi1 — Bozwa liboke ya figi, botia yango na pota ; mpe mokonzi akobika. \p \v 22 Ezekiasi alobaki : \pi1 — Elembo nini ekolakisa ngai ete nakokende na Tempelo ya Yawe ? \c 39 \s1 Ezekiasi ayambi bantoma kowuta na Babiloni \p \v 1 Na tango wana, Merodaki-Baladani, mwana mobali ya Baladani, mokonzi ya Babiloni, atindaki mokanda mpe kado epai ya Ezekiasi, pamba te ayokaki sango ete Ezekiasi abelaki mpe abikaki. \v 2 Ezekiasi ayambaki bantoma wana na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango. \v 3 Boye, mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye : \pi1 — Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi ? \p Ezekiasi azongisaki : \pi1 — Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni, mpo na koya kotala ngai. \p \v 4 Ezayi atunaki : \pi1 — Bamoni eloko nini kati na ndako na yo ? \p Ezekiasi azongisaki : \pi1 — Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai ; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango. \v 5 Ezayi alobaki na Ezekiasi : \pi1 — Yoka liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : \v 6 « Solo, na mikolo oyo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni ; eloko moko te ekotikala, » elobi Yawe. \v 7 « Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. » \p \v 8 Ezekiasi azongiselaki Ezayi : \pi1 — Liloba na Yawe oyo osili koloba ezali malamu. \p Pamba te azalaki komilobela : « Kimia mpe bobatelami ekozala penza na mikolo ya bomoi na ngai. » \c 40 \ms1 Buku ya kobondisama \s1 Elaka ya kokangolama \q1 \v 1 Bobondisa, bobondisa bato na Ngai, \q2 elobi Nzambe na bino. \q1 \v 2 Boloba kati na Yelusalemi, \q2 boyebisa ye \q1 ete minyoko na ye ekomi na suka, \q2 masumu na ye esili kolimbisama, \q1 pamba te asili kozwa na loboko ya Yawe \q2 ngolu koleka mbala mibale \q2 mpo na masumu na ye nyonso. \b \q1 \v 3 Mongongo ya moto moko ezali kobelela : \q2 « Kati na esobe, bobongisa nzela mpo na Yawe ; \q1 kati na mabele ya kokawuka, bosembolela Nzambe na biso \q2 nzela moko ya monene. \q1 \v 4 Tika ete mabwaku nyonso ekundama, \q2 bangomba nyonso ya milayi to ya mikuse ekitisama, \q1 banzela nyonso oyo etengama esembolama, \q2 mpe mabulu nyonso ekoma bitando. \q1 \v 5 Bongo, nkembo na Yawe ekomonisama, \q2 mpe bato nyonso bakomona yango elongo ; » \q2 pamba te Yawe nde alobi. \b \q1 \v 6 Mongongo moko elobi : « Belela ! » \q2 Mpe nazongisaki : « Nabelela likambo nini ? » \b \q1 « Bato nyonso bazalaka lokola matiti, \q2 mpe nkembo na bango nyonso ezalaka \q2 lokola bafololo ya bilanga. \q1 \v 7 Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, \q2 tango mopepe ya Yawe elekaka likolo na yango. \q2 Solo, bato bazali lokola matiti : \q1 \v 8 Matiti ekawukaka mpe fololo elembaka, \q2 kasi Liloba na Nzambe na biso ewumelaka seko na seko. » \b \q1 \v 9 Mata likolo ya ngomba, \q2 Siona, yo momemi sango malamu ; \q1 tombola mongongo na yo mpe ganga makasi, \q2 Yelusalemi, yo momemi sango malamu ; \q1 tombola yango penza, kobanga te ; \q2 loba na bingumba ya Yuda : \q2 « Botala Nzambe na bino ! » \q1 \v 10 Botala, Nkolo Yawe azali koya na nguya, \q2 loboko na Ye ezali kopesa Ye makoki ya kokonza. \q1 Botala, azali na lifuti elongo na Ye, \q2 azali kotambola na lifuti na Ye. \q1 \v 11 Azali kobatela etonga na Ye \q2 lokola mobateli bibwele : \q1 kosangisa bana meme na maboko na Ye \q2 mpe kokanga bango na tolo na Ye ; \q1 kotambolisa malembe-malembe bana meme ya basi \q2 oyo ezali nanu komela mabele. \s1 Monene ya Nzambe ya Isalaele \q1 \v 12 Nani asila komeka ebale monene kati na loboko na Ye, \q2 to likolo na nzela ya molayi ya misapi na Ye ? \q1 Nani asila kosangisa putulu nyonso ya mabele kati na katini moko \q2 to komeka kilo ya bangomba milayi na nzela ya ndobo \q2 to komeka kilo ya bangomba mikuse na nzela ya emekelo kilo ? \b \q1 \v 13 Nani asosoli makanisi ya Yawe \q2 to apesi Ye toli lokola molakisi ? \q1 \v 14 Yawe atunaki toli na nani \q2 mpo ete apesa Ye mayele ? \q1 Nani alakisaki Ye ndenge bakataka makambo na sembo \q2 to apesaki Ye boyebi, \q2 to mpe ateyaki Ye nzela ya bososoli ? \b \q1 \v 15 Solo, bikolo ezali lokola litanga moko ya mayi na katini, \q2 lokola putulu kati na emekelo kilo ! \q2 Tala, amekaka bisanga lokola eloko ya moke penza. \q1 \v 16 Banzete ya Libani ekokoka te \q2 mpo na kopelisa moto ya etumbelo, \q1 mpe banyama na yango ekokoka te \q2 mpo na kotumba mbeka. \b \q1 \v 17 Na miso na Ye, bikolo nyonso ezali lokola biloko pamba ; \q2 amonaka yango lokola eloko pamba \q2 to mpe lokola eloko te. \q1 \v 18 Bolingi kokokanisa Nzambe na nani ? \q2 Bolingi kokokanisa Ye na elilingi nini ? \q1 \v 19 Ndenge basalaka ekeko, \q2 mosali bikeko anyangwisi ebende na moto \q1 mpe asali ekeko ; \q2 mosali ya wolo abambi ekeko yango wolo, \q2 bongo akangisi yango na basheneti ya palata. \q1 \v 20 Moto oyo azangi makoki ya kobonza makabo ya boye \q2 mpo ete azali mobola makasi \q1 akopona nzete oyo epolaka te ; \q2 akoluka mosali bikeko oyo azali penza mayele \q2 mpo na kosala nzambe ya ekeko oyo eninganaka te. \b \q1 \v 21 Boyebi yango te ? \q2 Boyoka nanu yango te ? \q1 Bayebisa bino nanu yango te wuta na ebandeli ? \q2 Bososola nanu yango te wuta mokili esalema ? \b \q1 \v 22 Yawe avandaka na likolo ya mondelo ya mabele, \q2 epai wapi bato na yango bamonanaka lokola mabanki ; \q1 atandaki likolo lokola liputa \q2 mpe afungolaki yango lokola ndako ya kapo \q2 mpo na kovanda kuna ; \q1 \v 23 akomisaka bakonzi ya mokili bato pamba, \q2 mpe bakambi na yango lokola biloko pamba. \q1 \v 24 Tango nanu batiami kutu na mabele te, \q2 nanu balonami kutu te, \q1 mobimbi na bango ezwi nanu ata misisa te, \q2 afuli bango lokola mopepe mpe bakawuki, \q2 bongo mopepe makasi ememi bango lokola matiti ya kokawuka. \b \q1 \v 25 « Bolingi kokokanisa Ngai na nani ? \q2 Bolingi kotia Ngai esika moko na nani, » \q2 elobi Ye oyo azali Mosantu ? \q1 \v 26 Botombola miso na bino mpe botala na likolo : \q2 Nani akela biloko nyonso ya likolo : \q1 moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu ? \q2 Ezali Ye oyo abimisaka mampinga nyonso ya minzoto \q1 mpe abengaka yango moko na moko na kombo na yango. \q2 Mpo na bokonzi monene mpe nguya makasi na Ye, \q2 moko te kati na yango ezangaka. \b \q1 \v 27 Oh Jakobi, mpo na nini ozali koloba ; \q2 oh Isalaele, mpo na nini kotatola : \q1 « Nzela na ngai ebombami na miso ya Yawe, \q2 likambo na ngai eyebani te na Nzambe na ngai ? » \q1 \v 28 Oyebi te ? Nanu oyoka te ? \q2 Yawe azali Nzambe ya libela na libela, \q1 azali Mokeli ya basuka ya mabele ; \q2 alembaka te mpe apemaka te, \q2 mpe moko te akoki kososola mayele na Ye. \q1 \v 29 Apesaka makasi na bato oyo balembi \q2 mpe abakisaka nguya na bato oyo bazanga nguya. \q1 \v 30 Solo, bilenge bapemaka mpe balembaka, \q2 bilombe batengaka-tengaka ; \q1 \v 31 basi bato oyo batiaka elikya na Yawe, \q2 Yawe ayeisaka makasi na bango ya sika : \q1 bapumbwaka likolo lokola bampongo, \q2 bapotaka mbangu mpe bapemaka te, \q2 batambolaka mpe balembaka te. \c 41 \s1 Mobikisi mpo na Isalaele \q1 \v 1 « Bino bisanga, bovanda kimia liboso na Ngai ! \q2 Tika ete bato ya bikolo bayeisa sika makasi na bango, \q1 tika ete bapusana mpe baloba : \q2 ‹ Tokende elongo mpo na kosamba ! › \b \q1 \v 2 Nani abimisaki wuta na este \q2 moto oyo bosembo ezali kobenga na makolo na yango, \q1 oyo elonga elandaka matambe na Ye ? \q2 Nani akabaki bikolo na maboko na Ye \q1 mpe atiaki bakonzi na se ya bokonzi na Ye ? \q2 Mopanga na Ye ekomisaki bango putulu, \q1 mpe tolotolo na Ye ekomisaki bango \q2 lokola matiti ya kokawuka oyo mopepe ememaka. \q1 \v 3 Azali kolanda bango mpe koleka na kimia \q2 na nzela oyo matambe na Ye eleka nanu te. \q1 \v 4 Nani asalaki mpe akokisaki makambo oyo ? \q2 Nani abengaka bileko wuta na ebandeli ? \q1 Ngai Yawe, nazali Ebandeli ya nyonso, \q2 mpe nakozala mpe kaka ndenge moko \q2 elongo na bato ya suka. » \q1 \v 5 Bisanga emoni yango mpe ekomi kobanga, \q2 basuka ya mabele ezali kolenga. \q2 Bazali kopusana, bazali koya pene ; \q1 \v 6 moto na moto azali kosunga moninga na ye \q2 mpe koloba na ndeko na ye : « Sala makasi ! » \q1 \v 7 Mosali bikeko azali kolendisa monyangwisi bibende na moto, \q2 mosemboli bibende na marto azali kopesa makasi \q1 na mosali oyo apesaka yango elilingi ya suka ; \q2 alobi mpo na bisika epai wapi basangisaka bibende : « Ezali malamu ; » \q1 mpe alendisi nzambe ya ekeko na basete \q2 mpo ete eningana te. \s1 Yawe akangoli Isalaele \q1 \v 8 « Kasi yo, Isalaele, mosali na Ngai, \q2 Jakobi oyo naponaki, \q2 bino bakitani ya Abrayami, molingami na Ngai, \q1 \v 9 yo oyo nazwaki wuta na basuka ya mabele, \q2 oyo nabengaki wuta na basuka na yango, \q1 yo oyo epai ya nani nalobaki : ‹ Ozali mosali na Ngai, › \q2 naponaki yo mpe nabwakaki yo te. \q1 \v 10 Boye, kobanga te, pamba te nazali elongo na yo ; \q2 komitungisa te, mpo ete nazali Nzambe na yo ; \q1 nakoyeisa yo makasi mpe nakosunga yo ; \q2 solo, nasimbi yo na loboko na Ngai ya mobali, \q2 loboko oyo elongisaka. \q1 \v 11 Bato nyonso oyo bazali kotombokela yo \q2 bakokufa solo soni mpe bakosambwa ; \q1 bato oyo bazali kotelemela yo bakokoma \q2 lokola biloko pamba mpe bakokufa. \q1 \v 12 Ata oluki bayini na yo, \q2 okomona bango te ; \q1 bato oyo bazali kobundisa yo \q2 bakokoma biloko pamba. \q1 \v 13 Pamba te, nazali Yawe, Nzambe na yo, \q2 nasimbi makasi loboko na yo ya mobali \q1 mpe nazali koloba na yo : \q2 ‹ Kobanga te, nakosunga yo. › \b \q1 \v 14 Oh Jakobi, yo oyo oleki kutu mutsopi te, \q2 Isalaele, yo oyo omonani lokola eloko pamba, kobanga te, \q1 pamba te Ngai moko nakosunga yo, » \q2 elobi Yawe, Mosikoli na yo, Mosantu ya Isalaele. \q1 \v 15 « Tala, nakomisi yo lokola libaya ya sika ya kotutela ble, \q2 oyo batia minu bapelisa makasi, \q1 lokola mbeli ya sika, mbeli ya minu makasi ; \q2 okopanza bangomba milayi, \q1 okokomisa yango putulu ; \q2 okokomisa bangomba ya mikuse \q2 lokola matiti ya kokawuka, \q1 \v 16 okoyungola yango, mpe mopepe ekomema yango, \q2 mopepe makasi ekopanza yango. \q1 Kasi yo, okosepela kati na Yawe, \q2 okozwa lokumu kati na Mosantu ya Isalaele. \b \q1 \v 17 Mobola mpe moto akelela bazali koluka mayi, \q2 kasi na pamba : mayi ezali te ; \q1 balolemo na bango ekawuki na posa ya mayi. \q2 Kasi Ngai Yawe, nakoyanola bango ; \q2 Ngai, Nzambe ya Isalaele, nakobwaka bango te. \q1 \v 18 Nakosala ete bibale etiola na likolo ya bangomba, \q2 mpe bitima na kati-kati ya mabwaku ; \q1 nakobongola esobe liziba ya mayi, \q2 mpe mabele ya kokawuka mabele oyo ebimisaka mayi ; \q1 \v 19 nakolona kati na esobe : banzete ya sedele, \q2 ya akasia, ya mirite mpe banzete ya olive ; \q1 nakotia banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwi \q2 esika moko kati na mabele ya kokawuka, \q1 \v 20 mpo ete bato bamona mpe bayeba, \q2 batala mpe basosola elongo \q1 ete loboko na Yawe nde esali makambo wana, \q2 ete Mosantu ya Isalaele nde akeli yango. » \s1 Yawe liboso ya banzambe ya lokuta \q1 \v 21 « Botalisa likambo na bino, » \q2 elobi Yawe, \q1 « boluka komilongisa, » \q2 elobi Mokonzi ya Jakobi. \q1 \v 22 « Boya na banzambe na bino ya bikeko \q2 mpo ete eyebisa biso makambo oyo ekoya. \q1 Boyebisa biso masakoli na bino ya liboso, ezalaki nini, \q2 mpo ete toyekola yango malamu \q1 mpe toyeba ndenge nini esukelaki. \q2 To boyebisa biso makambo oyo ekoya ; \q1 \v 23 boyebisa biso makambo oyo ekoya na sima, \q2 mpo ete toyeba soki bozali solo banzambe ; \q1 bosala nanu ata eloko moko, ezala ya malamu to ya mabe, \q2 mpo ete toyoka soni mpe totondisama na kobanga. \q1 \v 24 Tala, bozali kaka pamba, \q2 mpe misala na bino ezali bobele se pamba ; \q2 moto oyo aponi bino asali penza likambo ya nkele. \b \q1 \v 25 Nabimisaki moto moko wuta na ngambo ya nor, mpe azali koya, \q2 moto moko, wuta na ngambo ya este, oyo abelelaka Kombo na Ngai. \q1 Azali konyata bakambi ndenge banyataka potopoto, \q2 lokola potopoto ya mabele ya bikeko ya mosali mbeki. \q1 \v 26 Nani alobaki yango wuta na ebandeli \q2 mpo ete biso tokoka koyeba, \q1 to wuta kala penza mpo ete tokoka koloba : ‹ Ezali sembo ? › \q2 Te, moto moko te alobaki yango, \q1 moko te asalaki ete likambo yango eyokana, \q2 moko te ayokaki maloba na bino. \q1 \v 27 Nazalaki Moto ya liboso ya koloba na Siona : \q2 ‹ Tala, tala bango oyo ! › \q1 Mpe na Yelusalemi : ‹ Napesi momemi Sango Malamu ! › \q1 \v 28 Natalaki, kasi moto moko te azalaki, \q2 moko te kati na bango mpo na kopesa toli, \q1 moko te mpo na kopesa eyano \q2 soki natuni bango motuna. \q1 \v 29 Tala, bango nyonso bazali banzambe ya lokuta ! \q2 Misala na bango ezali se pamba, \q2 bililingi na bango ezali se mopepe mpe biloko ya pamba. » \c 42 \s1 Mosali ya Yawe \q1 \v 1 Tala mosali na Ngai, oyo nasimbaka ; \q2 moponami na Ngai, oyo asalaka esengo na Ngai. \q1 Nakotia Molimo na Ngai na likolo na ye, \q2 mpe akotia bosembo kati na bikolo, \q1 \v 2 akotombola mongongo te, akoganga te, \q2 akobelela na mongongo makasi te na babalabala ; \q1 \v 3 akobuka te mwa nzete ya kolemba oyo egumbama \q2 mpe akoboma te moto ya singa ya mwinda \q1 oyo ekomi pene ya kokufa. \q2 Akomema bosembo na solo nyonso, \q1 \v 4 akolemba te mpe akotika te \q2 kino tango akotia bosembo na mokili. \q2 Bisanga ekotia elikya na mobeko na ye. \b \q1 \v 5 Tala liloba oyo Nzambe, Yawe, alobi, \q2 Ye oyo akelaki likolo mpe atandaki yango lokola liputa, \q1 oyo atandaki mabele mpe biloko nyonso oyo mabele ebimisaka, \q2 oyo apesaka pema na bato na yango \q2 mpe bomoi na bato oyo batambolaka likolo na yango : \q1 \v 6 « Ngai Yawe, nabengaki yo na bosembo, \q2 nasimbi loboko na yo makasi, \q1 nabateli yo mpe natie yo \q2 mpo na kosala boyokani elongo na bikolo \q2 mpe kozala pole ya bikolo, \q1 \v 7 mpo na kofungola miso ya bakufi miso, \q2 mpo na kobimisa bakangami na boloko \q2 mpe kobimisa bavandi ya molili, na kasho. \b \q1 \v 8 Nazali Yawe ; yango nde Kombo na Ngai ; \q2 nakopesa nkembo na Ngai na mosusu te \q2 to lokumu na Ngai epai na banzambe ya bikeko te. \q1 \v 9 Tala, makambo ya liboso esili koleka, \q2 mpe Ngai nazali kotatola makambo ya sika ; \q2 nayebisi bino yango liboso ete esalema. » \b \q1 \v 10 Boyemba loyembo ya sika mpo na Yawe, \q2 bokumisa Ye wuta na basuka ya mabele, \q1 bino bato oyo botambolaka na ebale monene, \q2 mpe nyonso oyo etondisaka yango, \q2 bino bisanga mpe bavandi na yango nyonso ! \b \q1 \v 11 Tika ete esobe mpe bingumba na yango etombola mingongo, \q2 tika ete bamboka mike epai wapi Kedari avandaka esepela ! \q1 Tika ete bato ya Sela bayemba na esengo ; \q2 tika ete baganga wuta na likolo ya bangomba ! \q1 \v 12 Tika ete bapesa nkembo epai na Yawe \q2 mpe batatola lokumu na Ye kati na bisanga ! \q1 \v 13 Yawe akobima lokola elombe, \q2 akopelisa zuwa na Ye lokola mobundi bitumba ; \q1 akoganga, solo ; akoganga makasi, \q2 mpe akolonga banguna na Ye. \b \q1 \v 14 Wuta kala, navandaki nye, \q2 nakangaki monoko mpe motema na ngai ; \q1 kasi sik’oyo, lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota, \q2 nazali koganga, nazali kolela mpe kopema na pasi. \q1 \v 15 Nakobebisa bangomba milayi mpe mikuse, \q2 nakokawusa banzete mpe matiti na yango nyonso, \q1 nakokomisa bibale, bisanga, \q2 mpe nakokawusa maziba ; \q1 \v 16 nakomema bakufi miso \q2 na nzela oyo batikala nanu koyeba te, \q1 nakotambolisa bango na nzela \q2 oyo bamesana kotambola te ; \q1 nakobongola molili pole liboso na bango, \q2 mpe nakokomisa nzela ya nyoka-nyoka nzela ya alima. \q1 Tala makambo oyo nakosala, \q2 nakotika yango te. \q1 \v 17 Kasi bato oyo batiaka elikya na banzambe ya bikeko \q2 mpe balobaka na bililingi : « Bozali banzambe na biso, » \q2 bakozonga sima mpe bakosambwa. \s1 Kokangolama ya bakufi miso mpe bakufi matoyi \q1 \v 18 Boyoka, bino bakufi matoyi ! \q2 Botala mpe bomona, bino bato bokufa miso ! \q1 \v 19 Nani azali mokufi miso soki mosali na ngai te ? \q2 Nani yango mokufi matoyi soki ntoma \q1 oyo ngai natindaki te ? \q2 Nani mokufi miso lokola molobeli na ngai ? \q2 Nani mokufi miso lokola mosali na Yawe ? \q1 \v 20 Omonaki makambo ebele, \q2 kasi ozalaki na bokebi na yango te ; \q1 matoyi na yo efungwamaki, \q2 kasi oyokaki ata eloko moko te. \q1 \v 21 Esepelisaki Yawe, mpo na bosembo na Ye, \q2 kokomisa Mobeko na Ye eloko ya monene mpe ya lokumu. \q1 \v 22 Kasi tala bato oyo bomengo na bango, \q2 babotola yango mpe babebisa bango ; \q1 bakanga bango nyonso na mabulu \q2 mpe babomba bango kati na boloko, \q1 bakoma lokola bomengo ya bitumba, \q2 bongo moto akokangola bango azali te ; \q1 bakoma lokola mosuni, \q2 bongo moto akoloba : « Zongisa bango, » azali te. \b \q1 \v 23 Nani kati na bino akoyoka makambo yango ? \q2 Nani akozala na bokebi na makambo oyo ekoya ? \q1 \v 24 Nani akabaki Jakobi na maboko ya babebisi, \q2 mpe Isalaele na maboko ya banguna ? \q1 Boni, ezalaki Yawe te oyo liboso ya nani basalelaki masumu ? \q2 Pamba te balingaki te kolanda nzela na Ye \q2 mpe kotosa Mobeko na Ye. \q1 \v 25 Boye, asopelaki bango moto ya kanda na Ye, \q2 mobulu ya etumba makasi ; \q1 azingelaki bango na moto na bangambo nyonso, \q2 kasi basosolaki te ; \q1 mpe moto ezikisaki bango, \q2 kasi bazwaki penza likambo yango na motema te. \c 43 \s1 Mobikisi Moko Kaka mpo na Isalaele \q1 \v 1 Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe alobi, \q2 Ye oyo akelaki yo, oh Jakobi ; \q1 Ye oyo abongisaki yo, oh Isalaele : \q2 « Kobanga te, pamba te nasikolaki yo, \q1 nabengaki yo na kombo na yo, \q2 ozali ya ngai. \q1 \v 2 Tango okokatisa mayi monene, \q2 nakozala elongo na yo ; \q1 mpe tango okokatisa bibale, \q2 ekozindisa yo te. \q1 Tango okotambola kati na moto, \q2 okozika te, \q2 mpe ndemo na yango ekotumba yo te ; \q1 \v 3 pamba te Ngai Yawe, nazali Nzambe na yo, \q2 Mosantu ya Isalaele, Mobikisi na yo. \q1 Nakabi Ejipito mpo na kofuta niongo ya lobiko na yo, \q2 Kushi mpe Seba na esika na yo. \q1 \v 4 Lokola ozali na motuya mpe na kilo mingi na miso na Ngai, \q2 lokola nalingaka yo, \q1 nakokaba bato mosusu na esika na yo, \q2 mpe bikolo mpo na kosomba bomoi na yo. \b \q1 \v 5 Kobanga te, pamba te nazali elongo na yo : \q2 nakoyeisa bana na yo wuta na ngambo ya este \q2 mpe nakosangisa bino wuta na ngambo ya weste ; \q1 \v 6 nakoloba epai ya nor : ‹ Pesa, › \q2 mpe epai ya sude : ‹ Kokanga te. › \q1 Zongisa bana na Ngai ya mibali \q2 wuta na mikili ya mosika, \q2 mpe bana na Ngai ya basi wuta na suka ya mabele, \q1 \v 7 moto nyonso oyo abengami na Kombo na Ngai, \q2 oyo nakelaki mpo na nkembo na Ngai, \q2 oyo nasalaki mpe nabongisaki. » \b \q1 \v 8 Bimisa bato oyo bazali na miso, \q2 kasi bamonaka te ; \q1 bato oyo bazali na matoyi, \q2 kasi bayokaka te. \q1 \v 9 Tika ete bikolo nyonso esangana elongo \q2 mpe bato basangana esika moko ! \q1 Nani kati na bango asakolaki makambo oyo ? \q2 Nani kati na bango ayebisaki biso makambo \q2 oyo esalemaki liboso ? \q1 Tika ete babimisa batatoli na bango \q2 mpo na kolobela bango ! \q1 Tika ete bato mosusu bayoka mpo ete baloba : \q2 « Ezali ya solo ! » \b \q1 \v 10 « Bozali batatoli na Ngai, » \q2 elobi Yawe, \q1 « mpe mosali na Ngai, oyo naponi, \q2 mpo ete bokoka koyeba, \q1 kondimela Ngai mpe kososola \q2 ete Ngai moko kaka nde nazali Nzambe : \q1 Liboso na Ngai, nzambe moko te asila kosalema ; \q2 mpe sima na Ngai, akotikala kozala te. \q1 \v 11 Ezali Ngai, Ngai kaka moko, nde nazali Yawe ; \q2 Mobikisi mosusu azali te, soki Ngai te. \q1 \v 12 Kati na bino, Ngai nde nasakolaki, \q2 nabikisaki mpe natatolaki ; \q1 kasi ezali banzambe ya bapaya te. \q2 Bozali batatoli na Ngai, » \q1 elobi Yawe, \q2 « mpe Ngai, nazali Nzambe. \q1 \v 13 Solo, wuta na tango ya kala, \q2 nazalaka kaka ndenge moko ; \q1 moko te akokoka kokangola na loboko na Ngai. \q2 Soki nasali, nani akobongola yango ? » \s1 Mawa na Nzambe mpe kozanga boyengebene ya Isalaele \q1 \v 14 Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na bino, \q2 Mosantu ya Isalaele, alobi : \q1 « Mpo na likambo na bino, nakotinda na Babiloni, \q2 mampinga ya basoda, mpe nakokitisa bato nyonso \q1 ya Babiloni lokola bakimi, \q2 ezala bato ya Chalide oyo bamikumisaka na koganga \q2 mpo na bamasuwa na bango. \q1 \v 15 Ngai, nazali Yawe, Mosantu na bino, \q2 Mokeli ya Isalaele, Mokonzi na bino. » \b \q1 \v 16 Tala liloba oyo Yawe alobi, \q2 Ye oyo apasolaka nzela monene kati na ebale monene, \q2 mpe nzela moke kati na mayi ya makasi ; \q1 \v 17 Ye oyo atelemisaka bashar mpe bampunda, \q2 mampinga ya basoda elongo na bilombe ya bitumba ; \q1 Ye oyo alalisaka bango nyonso, \q2 mpe bakokaka lisusu kotelema te, \q2 bakufaka lokola singa ya mwinda : \q1 \v 18 « Bokanisa lisusu te makambo oyo eleka, \q2 bomitungisa lisusu te mpo na makambo ya kala. \q1 \v 19 Tala, nazali kosala likambo ya sika ! \q2 Ezali kobima sik’oyo, bozali komona yango te ? \q1 Nazali kopasola nzela kati na esobe, \q2 mpe kotia bibale kati na mabele ya kokawuka. \q1 \v 20 Banyama ya zamba, bambwa ya zamba \q2 mpe maligbanga ekopesa Ngai nkembo ; \q1 pamba te nakopesa mayi kati na esobe, \q2 bibale kati na mabele ekawuka, \q2 mpo na komelisa bato na Ngai, oyo naponaki, \q1 \v 21 bato oyo Ngai moko nabongisaki \q2 mpo ete bakoka kotatola lokumu na Ngai. \b \q1 \v 22 Kasi obelelaki Ngai te, oh Jakobi, \q2 pamba te olembaki Ngai, oh Isalaele. \q1 \v 23 Omemelaki Ngai bana meme te \q2 lokola mbeka ya kotumba, \q1 mpe opesaki Ngai lokumu te na nzela ya bambeka na yo. \q2 Nakomisaki yo mowumbu te \q1 mpo ete opesa Ngai malasi ya ansa lokola makabo, \q2 mpe nalembisaki yo te \q2 mpo ete obonzela Ngai malasi. \q1 \v 24 Osombelaki Ngai te biloko ya solo kitoko na motuya ya mbongo, \q2 mpe otondisaki Ngai te na mafuta ya mbeka na yo, \q1 kasi onyokolaki Ngai nde na masumu na yo \q2 mpe olembisaki Ngai na mabe na yo. \b \q1 \v 25 Ezali Ngai, Ngai kaka nde nalimbisaka masumu na yo \q2 mpo na lokumu ya Ngai moko \q1 mpe nakokanisa lisusu masumu na yo te. \b \q1 \v 26 Zongisa yango nanu na makanisi na Ngai ; \q2 tika ete tosamba elongo, \q2 mpe loba yo moko mpo na kotalisa ete ozali moto ya sembo. \q1 \v 27 Tata na yo ya liboso asalaki masumu, \q2 balobeli na yo batombokelaki Ngai. \q1 \v 28 Boye, nakosambwisa bakambi ya tempelo na bino \q2 mpe nakobongisa Jakobi mpo na kobebisama, \q2 mpe Isalaele, mpo na pasi. \c 44 \s1 Koponama ya Isalaele \q1 \v 1 Kasi sik’oyo yoka, oh Jakobi, mowumbu na Ngai, \q2 Isalaele oyo naponaki ! \q1 \v 2 Tala liloba oyo Yawe alobi, \q2 Ye oyo asalaki yo, \q1 abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo \q2 mpe asungaka yo : \q1 Oh Jakobi, mowumbu na Ngai, kobanga te ; \q2 yo, Yeshuruni, oyo naponaki. \b \q1 \v 3 Pamba te nakosopa mayi na mokili ya kokawuka, \q2 mpe bibale, na mabele ya kokawuka ; \q1 nakosopa Molimo na Ngai na likolo ya bana na yo \q2 mpe mapamboli na Ngai na likolo ya bakitani na yo. \q1 \v 4 Bakokola malamu kati na matiti ya mobesu \q2 lokola banzete ya pepiliye pene ya ebale. \q1 \v 5 Moto moko akoloba : ‹ Nazali ya Yawe, › \q2 mpe moto mosusu akomibenga na kombo ya Jakobi, \q1 kino mosusu akokoma na loboko na ye : \q2 ‹ Nazali ya Yawe, › \q2 mpe akozwa kombo ya Isalaele. \s1 Ebandeli mpe suka \q1 \v 6 Tala liloba oyo Yawe, \q2 Mokonzi mpe Mosikoli ya Isalaele, \q1 Mokonzi ya mampinga, alobi : \q2 Nazali ebandeli mpe nazali suka ; \q2 Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te. \q1 \v 7 Nani azali lokola Ngai ? Tika ete atatola yango ; \q2 tika ete aloba mpe abimisa liboso na Ngai \q1 makambo oyo esalema wuta kala, \q2 wuta tango nasala bato oyo, \q1 mpe makambo oyo ekoya ! \q2 Solo, tika ete basakola makambo oyo ekoya ! \q1 \v 8 Bolenga te, bobanga mpe te. \q2 Boni, natatolaki yango te ? \q1 Nasakolaki yango te wuta kala ? \q2 Bozali batatoli na Ngai. \q1 Boni, ezali na nzambe mosusu pembeni na Ngai ? \q2 Te, ezali na Libanga mosusu te, \q2 nayebi ata moko te. » \s1 Ndenge basalaka banzambe ya bikeko \q1 \v 9 Basali bikeko, bango nyonso, bazali pamba, \q2 mpe biloko oyo bango balingaka ezali ata na litomba te ; \q1 esengelaki kotatola mpo na bango, kasi emonaka te \q2 mpe eyebaka ata eloko moko te ; \q2 boye, bayokisama soni. \q1 \v 10 Nani asala nzambe to ekeko ya ebende \q2 mpo ete ezala ata na litomba moko te mpo na ye ? \q1 \v 11 Tala, ye elongo na baninga na ye bakozala na soni ; \q2 basali bikeko bazali na bango kaka bato lokola bato nyonso ! \q1 Tika ete bango nyonso baya elongo mpe batelema wana ; \q2 bakokweya na somo mpe na soni. \q1 \v 12 Monyangwisi bibende na moto azwaka sizo, \q2 asalelaka yango mpe asalaka na makala ya moto ; \q1 asalaka ekeko na marto \q2 mpe abongisaka yango na makasi ya loboko na ye ; \q1 nzokande soki akomi na nzala, makasi esili ye ; \q2 soki mpe ameli mayi te, nzoto elembi ye ! \q1 \v 13 Mosali bikeko afungolaka singa oyo bamekelaka molayi, \q2 akomaka elilingi na ekomeli ya motane, \q1 asalaka yango na nzela ya mbeli ya minu makasi, \q2 abongisaka mondelo na yango na lime \q1 mpe apesaka yango lolenge ya moto, \q2 ndenge kaka moto azalaka kitoko, \q2 mpo ete ekoka kowumela na Esika ya bule. \q1 \v 14 Akataka banzete ya sedele ; \q2 mpe tango mosusu, banzete ya sipele to ya sheni ; \q1 atikaka yango ekola kati na banzete ya zamba \q2 mpe alonaka nzete ya pen oyo mvula ekokolisa. \q1 \v 15 Moto azwaka yango mpo na kopelisa moto, \q2 akataka yango mpo na koyetola moto \q1 to mpo na kobelisa mapa ; \q2 kasi asalaka na yango lisusu nzambe oyo afukamelaka ; \q2 asalaka na yango nzambe ya ekeko oyo agumbamelaka. \b \q1 \v 16 Akotia ndambo ya nzete yango na moto, \q2 bongo akolamba na yango mosuni, \q1 akotumba mosuni na ye \q2 mpe akolia yango kino akotonda ; \q1 akokoma lisusu koyoka molunge mpe akoloba : \q2 « Ah, nayoki molunge, namoni moto epeli makasi ! » \q1 \v 17 Mpe na ndambo oyo etikali, \q2 oyo asalaki na yango nzambe, \q1 nzambe na ye ya ekeko, \q2 akofukamela yango mpe akosambela yango ; \q1 akosambela yango mpe akoloba : \q2 « Bikisa ngai, ozali nzambe na ngai ! » \q1 \v 18 Bayebi eloko moko te, \q2 bazali na bososoli te ; \q1 miso na bango ekangama, emonaka te ; \q2 mitema na bango ezali makasi, esosolaka te. \q1 \v 19 Moko te akanisaka, \q2 moko mpe te azalaka na boyebi \q1 mpe na mayele mpo na koloba : \q2 « Na nzela ya ndambo na yango, napelisaki moto, \q1 nabelisaki mapa na makala na yango ya moto, \q2 natumbaki mosuni mpe naliaki yango. \q1 Bongo mpo na oyo etikali, \q2 nasala na yango penza likambo ya nkele boye ? \q2 Nafukamela penza mwa eteni ya nzete ? » \q1 \v 20 Makanisi na ye ekangama na putulu, \q2 motema na ye ya lokuta ezali kokosa ye ; \q1 akokoka te komikangola mpe koloba : \q2 « Boni, eloko oyo ezali na loboko na ngai ya mobali \q2 ezali lokuta te ? » \s1 Yawe akosikola bato na Ye \q1 \v 21 « Oh Jakobi, kanisa nanu makambo oyo, \q2 pamba te, oh Isalaele, ozali mosali na Ngai. \q1 Nabongisaki yo mpo ete ozala mosali na Ngai ; \q2 oh Isalaele, nakobosana yo te. \q1 \v 22 Nalongoli mabe na yo lokola lipata, \q2 masumu na yo lokola lipata ya tongo. \q1 Zonga epai na Ngai, \q2 pamba te nasili kosikola yo. » \b \q1 \v 23 Oh Lola, yemba banzembo ya esengo, \q2 pamba te Yawe nde asali bongo ! \q1 Oh mozindo ya mokili, tombola mongongo ! \q2 Oh bino bangomba, \q1 bazamba mpe banzete nyonso kati na yango, \q2 boyemba banzembo ya elonga ! \q1 Pamba te Yawe asikolaki Jakobi, \q2 amonisi nkembo na Ye kati na Isalaele. \b \q1 \v 24 « Tala liloba oyo Yawe alobi, \q2 Ye oyo azali Mosikoli na yo, \q1 oyo abongisaki yo wuta na libumu ya mama na yo : \q2 Nazali Yawe oyo asalaki biloko nyonso, \q1 Ngai moko nde natandaki likolo lokola liputa, \q2 Ngai moko nde natandaki mabele. \q1 \v 25 Sik’oyo, nakomisi bilembo ya basakoli ya lokuta eloko pamba ; \q2 natie mobulu kati na molimo ya bato \q1 oyo balobaka makambo ekoya, \q2 nakweyisi boyebi ya bato ya bwanya \q2 mpe nakomisi mayele na bango liboma. \q1 \v 26 Nakokisi maloba ya mosali na Ngai \q2 mpe nalongisi mabongisi ya bamemi sango na Ngai. \b \q1 Natatoli na tina na Yelusalemi : \q2 ‹ Bato bakovanda kati na yo ; › \q1 na tina na bingumba ya Yuda : \q2 ‹ Ekotongama lisusu, › \q1 mpe na tina na mabanga na yango oyo ebukana : \q2 ‹ Nakobongisa yango lisusu. › \q1 \v 27 Nalobi na ebale monene : \q2 ‹ Kawuka, mpe nakokawusa bibale na yo ! › \q1 \v 28 Nalobi na tina na Sirisi : \q2 ‹ Azali mobateli oyo naponi, \q1 akokokisa makambo nyonso oyo esepelisaka Ngai. \q2 Akoloba na tina na Yelusalemi : \q1 ‘ Tika ete etongama lisusu, ’ \q2 mpe na tina na Tempelo : \q2 ‘ Tika ete batonga miboko na yango. ’ › » \c 45 \s1 Mokangoli akoya \q1 \v 1 « Tala liloba oyo Yawe alobi \q2 epai ya Sirisi, mopakolami na Ye, \q1 oyo Yawe asimbi loboko na ye ya mobali \q2 mpo na kokweyisa bikolo nyonso liboso na ye \q1 mpe kolongola mikaba wuta na baloketo ya bakonzi, \q2 mpo na kofungola bikuke liboso na ye \q2 mpo ete bikuke yango ekangama te : \q1 \v 2 Nakotambola liboso na yo \q2 mpe nakolalisa bangomba, \q1 nakobuka bikuke ya bronze \q2 mpe nakokata-kata bibende oyo bakangelaka yango. \q1 \v 3 Nakopesa yo bomengo oyo babomba na molili, \q2 bozwi oyo batia na bisika ebombama, \q1 mpo okoka koyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe ya Isalaele, \q2 oyo abengi yo na kombo na yo. \q1 \v 4 Mpo na bolingo ya Jakobi, mosali na Ngai, \q2 mpe Isalaele, moponami na Ngai, \q1 nabengi yo na kombo na yo, \q2 napesi yo kombo ya lokumu \q2 atako oyebi Ngai nanu te. \q1 \v 5 Nazali Yawe, mosusu azali te ; \q2 Nzambe mosusu azali te, soki Ngai te. \q1 Nalatisi yo mokaba na loketo \q2 atako oyebi Ngai nanu te ; \q1 \v 6 mpo ete, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste, \q2 bato bayeba ete mosusu azali te, \q1 bobele Ngai nde nazali Nzambe. \q2 Nazali Yawe, mosusu azali te. \q1 \v 7 Nasalaka pole mpe nakelaka molili, \q2 napesaka kimia mpe nakelaka pasi ; \q2 Ngai Yawe nde nasalaka makambo oyo nyonso. \b \q1 \v 8 Yo, Lola kuna na likolo, nokisa bosembo lokola mvula, \q2 tika ete mapata ekitisa yango ! \q1 Tika ete mabele efungwama \q2 mpo ete lobiko ebima ; \q1 tika ete bosembo ekola nzela moko ! \q2 Ezali Ngai Yawe nde nakelaki yango. \b \q1 \v 9 Mawa na ye oyo abetaka tembe na Mokeli na ye, \q2 ye oyo azali kaka mbeki kati na bambeki ya mabele ! \q1 Boni, potopoto ekoki solo koloba \q2 na moto oyo asali yango : \q1 ‹ Ozali kosala nini ? › \q2 Mpe mosala ya maboko na yo ekoki solo koloba : \q2 ‹ Azali na maboko te ? › \q1 \v 10 Mawa na ye oyo alobaka na tata na ye : \q2 ‹ Mpo na nini obotaki ngai ? › \q1 Mpe na mama na ye : \q2 ‹ Mpo na nini obotaki ngai ? › \b \q1 \v 11 Tala liloba oyo Yawe, Mosantu ya Isalaele \q2 mpe Mokeli na ye, alobi : \q1 Boni, bino nde bato bokotuna Ngai \q2 soki nakosala nini mpo na bana na Ngai \q1 na mikolo oyo ekoya \q2 to bino nde bato bokopesa Ngai mitindo \q2 mpo na mosala oyo maboko na Ngai esali ? \q1 \v 12 Ngai nde nasala mabele \q2 mpe nakela bato kati na yango ; \q1 loboko na Ngai moko nde etandaki likolo lokola liputa \q2 mpe etiaki mampinga na yango nyonso na molongo. \q1 \v 13 Nakobimisa Sirisi na bosembo na Ngai ; \q2 nakokomisa nzela na ye nyonso alima. \q1 Akotonga lisusu engumba na Ngai \q2 mpe akopesa bonsomi na bakangami na Ngai ; \q1 ekozala na motuya ya mbongo to ya biloko te, \q2 elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. » \b \q1 \v 14 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Mosala ya Ejipito, mombongo ya Kushi \q1 mpe bato milayi ya Seba, \q2 bakoleka epai na yo mpe bakozala ya yo. \q1 Bakotambola ya kokangama na minyololo, sima na yo ; \q2 bakofukama liboso na yo \q1 mpe bakobondela yo na maloba oyo : \q2 ‹ Solo, Nzambe azali penza epai na yo, \q2 nzambe mosusu azali te ! › » \b \q1 \v 15 Solo, ozali Nzambe oyo amibombaka, \q2 Nzambe, Mobikisi ya Isalaele ! \q1 \v 16 Bato nyonso oyo basalaka banzambe ya bikeko \q2 bakoyoka soni mpe bakosambwa ; \q2 bango nyonso, bakokende na soni. \q1 \v 17 Kasi Yawe akobikisa Isalaele \q2 na lobiko ya seko na seko. \q1 Bokotikalaka lisusu koyoka soni te mpe kosambwa te, \q2 libela na libela. \b \q1 \v 18 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi, \q2 Ye oyo akela likolo, \q1 Ye oyo azali Nzambe oyo asala mpe abongisa mabele, \q2 mpe atelemisa yango ngwi ; \q1 Ye akelaki yango te mpo ete ezala pamba, \q2 kasi asalaki yango mpo ete bato bavanda : \q1 « Nazali Yawe, \q2 mpe mosusu azali te. \q1 \v 19 Nalobaki na nkuku te, \q2 kati na esika moko te ya molili ya mokili ; \q1 nalobaki te na bakitani ya Jakobi : \q2 ‹ Boluka Ngai kati na pamba ! › \q1 Nazali Yawe, nalobaka oyo ezali sembo, \q2 nasakolaka oyo ezali alima. \b \q1 \v 20 Bosangana elongo mpe boya, \q2 bopusana elongo bino nyonso, \q1 bino bato oyo bobiki kati na bikolo ! \q2 Bato oyo bamemaka banzambe ya bikeko basala na nzete \q1 mpe babelelaka nzambe oyo ebikisaka te ; \q2 bazangi boyebi. \q1 \v 21 Botelema mpe bopesa sango, \q2 boloba makambo na bino \q1 mpe tosamba elongo ! \q2 Nani asakolaki yango wuta kala \q1 mpe atatolaki yango wuta na tango oyo eleka ? \q2 Ezali Ngai Yawe te ? \q1 Ezali na Nzambe mosusu te, soki Ngai te. \q2 Nazali Nzambe ya sembo mpe Mobikisi ; \q2 mosusu azali te, soki Ngai te. \b \q1 \v 22 Bozonga epai na Ngai mpo ete bobika, \q2 bino nyonso oyo bozali na basuka ya mokili ; \q1 pamba te Ngai, nazali Nzambe, \q2 mpe mosusu azali te. \q1 \v 23 Nalapi ndayi na Kombo na Ngai ; \q2 oyo ezali sembo ebimaka na monoko na Ngai, \q1 liloba oyo bakoki koboya te : \q2 mabolongo nyonso ekofukama liboso na Ngai, \q2 mpe minoko nyonso ekolapa ndayi na Kombo na Ngai. \q1 \v 24 Bakoloba na tina na Ngai : \q2 ‹ Makasi mpe bosembo ezali kati na Yawe kaka. › » \q1 Bato nyonso oyo batombokelaki Ye \q2 bakoya epai na Ye mpe bakoyoka soni. \q1 \v 25 Ezali kati na Yawe nde bato nyonso \q2 oyo bazali bakitani ya Isalaele bakokoma bato ya sembo \q2 mpe bakozwa lokumu. \c 46 \s1 Banzambe ya Babiloni mpe Yawe \q1 \v 1 Tala banzambe ya Babiloni : \q2 Beli esili ngala, Nebo ekweyi ; \q1 bikeko na yango etiami likolo ya banyama, likolo ya bibwele ! \q2 Bikeko oyo bomemaka ezali kilo makasi, \q2 ezali mokumba oyo elembisaka banyama. \q1 \v 2 Banzambe yango ya bikeko egumbami mpe ekweyi nzela moko, \q2 ezali na makoki te ya kobikisa mokumba na yango, \q1 pamba te ekeyi na bowumbu. \b \q1 \v 3 Oh ndako ya Jakobi, boyoka Ngai, \q2 mpe bino nyonso, batikali ya libota ya Isalaele, \q1 bino oyo nandima kobatela wuta na libumu ya mama \q2 mpe nandima komema mokumba \q2 wuta mbotama na bino. \q1 \v 4 Ezala tango bokotonda na suki ya pembe \q2 mpe bokokoma mibange, \q1 Ngai nakobongwana te, nakosunga bino kaka ; \q2 Ngai nde nasalaki bino, nakomema mokumba na bino, \q2 nakosunga bino mpe nakobikisa bino. \b \q1 \v 5 Bolingi kokokanisa Ngai \q2 to kotia Ngai esika moko na nani ? \q1 Bolingi solo kokokanisa Ngai na nani \q2 mpo ete amekana na Ngai ? \q1 \v 6 Bazali bato oyo babimisaka wolo \q2 na mabenga na bango \q1 mpe bamekaka kilo ya palata na emekelo ; \q2 bafutaka mosolo epai ya mosali bikeko na bibende \q1 mpo ete asalela bango nzambe ya ekeko \q2 ya wolo mpe ya palata, \q2 mpo ete bafukamela mpe bagumbamela yango. \q1 \v 7 Batiaka yango na mapeka mpe bamemaka yango, \q2 batelemisaka yango na esika na yango \q1 mpe etikalaka ya kotelema kaka wana. \q2 Wuta na esika na yango, ekoningana te. \q1 Ata soki moto moko abeleli yango, ekoyanola te, \q2 ekobikisa ye te na tango ya pasi. \b \q1 \v 8 Bokanisa yango lisusu, mpo bososola malamu ; \q2 bino batomboki, bozongisa yango lisusu na mitema na bino ! \q1 \v 9 Bokanisa lisusu makambo ya liboso, \q2 makambo oyo ya kala penza ; \q1 solo, Ngai nazali Nzambe, mpe mosusu azali te, \q2 nazali Nzambe, moko te akokani na Ngai. \q1 \v 10 Nasakolaki makambo ya suka na ebandeli ; \q2 wuta kala penza, nasakolaki makambo oyo ekoya. \q1 Nalobaki : « Mabongisi na Ngai ekolongisama, \q2 mpe nakosala nyonso oyo nasepeli kosala. » \q1 \v 11 Wuta na este, nabengi ndeke oyo eliaka misuni ; \q2 longwa na mokili ya mosika, \q1 moto oyo akokokisa mabongisi na Ngai. \q2 Makambo oyo nalobaki, yango nde ekokokisama ; \q1 oyo nabongisaki, yango nde ekosalema. \q1 \v 12 Boyoka Ngai, bino bato ya mitema makasi, \q2 bino bato oyo bozali mosika ya bosembo ! \q1 \v 13 Bosembo na Ngai ekomi pene, \q2 ezali lisusu mosika te ; \q1 mpe lobiko na Ngai ekowumela te. \q2 Nakopesa lobiko epai na Siona, \q2 mpe nkembo na Ngai, epai na Isalaele. \c 47 \s1 Kokweya ya Babiloni \q1 \v 1 Kita mpe vanda na putulu, \q2 Babiloni, mboka kitoko ! \q1 Vanda na mabele, kiti ya bokonzi ezali te, \q2 Babiloni, mboka kitoko ! \q1 Moto moko te akobenga yo lisusu \q2 « mwasi bonzenga » to « mwasi kitoko. » \q1 \v 2 Kamata mabanga oyo banikelaka ble \q2 mpe sala farine, \q1 longola kitambala na yo, \q2 tombola nzambala na yo, \q1 mpe mipende na yo emonana, \q2 bongo katisa bibale ! \q1 \v 3 Bolumbu na yo ekomonana, \q2 mpe soni na yo ekobombama te. \q1 Nakozongisa mabe na mabe, \q2 mpe moto moko te akopekisa Ngai. \q1 \v 4 Mosikoli na biso, Kombo na Ye : \q2 Yawe, Mokonzi ya mampinga, \q2 Mosantu ya Isalaele. \b \q1 \v 5 Vanda kimia, kende na molili, \q2 Babiloni, mboka kitoko, \q1 pamba te bakobenga yo lisusu te \q2 « mwasi mokonzi ya bikolo. » \b \q1 \v 6 Nasilikelaki bato na Ngai, \q2 nasambwisaki libula na Ngai ; \q1 nakabaki bango na maboko na yo, \q2 mpe oyokelaki bango mawa te ; \q2 bongo omemisaki ata mibange ekangiseli ya kilo makasi. \q1 \v 7 Olobaki : « Nakozala mwasi mokonzi mpo na libela ! » \q2 Kasi motema na yo ekanisaki te tina ya makambo oyo \q2 mpe ndenge nini ekosukela. \b \q1 \v 8 Yoka sik’oyo, yo mwasi ya biyenga, \q2 oyo omesana kovanda na kimia \q1 mpe omilobelaka : « Ngai nde nazali, mosusu azali te. \q2 Nakotikala kokoma te mwasi akufisa mobali \q2 mpe nakotikala kokufisa bana te ! » \q1 \v 9 Makambo mibale oyo ekokomela yo \q2 mbala moko mpe kaka na mokolo moko : \q1 kozanga bana mpe kokufisa mobali. \q2 Makambo oyo eleka ndelo nde ekokomela yo, \q1 ata kindoki na yo ezali makasi \q2 mpe bakisi na yo ezali na nguya. \q1 \v 10 Otiaki elikya na makambo na yo ya mabe, \q2 olobaki : « Moto moko te azali komona ngai ! » \q1 Bwanya mpe mayele na yo epengwisaki yo \q2 tango ozalaki komilobela : « Ngai nde nazali, mosusu azali te ! » \q1 \v 11 Pasi ekokomela yo, \q2 mpe okoyeba te ndenge ya kolongola yango ; \q1 mikakatano ekokomela yo \q2 mpe okokoka komibatela te ; \q2 libebi oyo oyebaki te ekokomela yo na pwasa. \b \q1 \v 12 Kangama kaka na bonganga \q2 mpe na kindoki na yo, oyo omonelaka pasi \q1 wuta bolenge na yo ! \q2 Tango mosusu okozwela yango litomba, \q2 tango mosusu okokoka kobangisa bato. \b \q1 \v 13 Batoli nyonso oyo osili kozwa \q2 epai na bango elembisi yo nzoto ! \q1 Tika ete bato ya soloka oyo bayekolaka \q2 bikelamu nyonso ya likolo : moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu, \q1 mpe bayebisaka na ebandeli nyonso ya sanza makambo oyo ekoya, \q2 batelema wana mpe babikisa yo ! \q1 \v 14 Tala, bakozala solo lokola matiti ya kokawuka, \q2 matiti oyo moto ekotumba ; \q1 bakokoka kobikisa ata milimo na bango moko te \q2 na nguya ya moto : \q1 Ekozala lisusu te lokola makala ya moto mpo na koyetola \q2 to moto mpo na kovanda zingazinga na yango. \q1 \v 15 Ezali bongo nde bakokoma liboso na yo, \q2 bato nyonso oyo ozalaki komonela pasi, \q1 mpe bato oyo ozalaki kosala elongo na bango \q2 wuta bolenge na yo. \q1 Moko na moko na bango akoyengayenga na ngambo na ye, \q2 moko te akobikisa yo ! \c 48 \s1 Pamela mpe lobiko ya Isalaele \q1 \v 1 Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, \q2 bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, \q1 bino oyo bobimi na libota ya Yuda, \q2 bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe \q1 mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, \q2 kasi na bosolo te mpe na bosembo te ! \q1 \v 2 Bino oyo bomibengaka « Bato ya engumba mosantu » \q2 mpe bolukaka lisungi epai ya Nzambe ya Isalaele, \q1 oyo Kombo na Ye ezali « Yawe, Mokonzi ya mampinga. » \q1 \v 3 Nasakolaki makambo ya liboso wuta kala, \q2 monoko na ngai nde ebimisaki yango \q1 mpe nasalaki ete eyebana ; \q2 nasalaki yango na pwasa mpe ekokisamaki. \q1 \v 4 Pamba te nayebaki ndenge nini \q2 bozalaka bato ya mito makasi, \q1 bato oyo bazalaka na kingo lokola ebende \q2 mpe oyo mbunzu na bango ezalaka lokola bronze. \q1 \v 5 Yango wana, nalobaki na yo makambo oyo wuta kala, \q2 nayebisaki yo yango liboso ete ekokisama mpo oloba te : \q1 « Nzambe na ngai ya ekeko nde asali yango, \q2 elilingi na ngai ya nzete mpe ya ebende \q2 nde apesaki mitindo ete esalema ! » \q1 \v 6 Boyokaki makambo oyo ! \q2 Botala, yango nyonso ekokisami. \q2 Boni, bokondima yango kaka te ? \b \q1 Wuta sik’oyo, nakoyebisa yo makambo ya sika, \q2 makambo oyo ebombama, \q2 makambo oyo oyebi nanu te. \q1 \v 7 Ekelami nde sik’oyo, ezali makambo ya kala te, \q2 oyoka nanu yango te, \q1 liboso ya mokolo ya lelo. \q2 Boye, okoki koloba te : \q2 « Solo, nayoka sango na yango. » \q1 \v 8 Solo, oyoka yango nanu te mpe oyebi yango te ; \q2 wuta kala, litoyi na yo ezalaka ya kokangama. \q1 Solo, nayebi ete ozalaka mokosi ; \q2 babengaka yo motomboki \q2 wuta na libumu ya mama na yo. \q1 \v 9 Mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, \q2 nakolembisa kanda ya motema na Ngai ; \q1 mpo na lokumu na Ngai, \q2 nakozongisa motema na Ngai sima mpo na yo. \q2 Yango wana, nakoboma yo te. \q1 \v 10 Tala, napetolaki yo, \q2 kasi ndenge bapetolaka palata na moto te ; \q2 namekaki yo kati na moto ya minyoko. \q1 \v 11 Nasali yango kaka mpo na lokumu na Ngai, \q2 mpo na lokumu na Ngai moko. \q1 Ndenge nini nakoki solo komisambwisa Ngai moko ? \q2 Nakokaba nkembo na Ngai na nzambe mosusu te. \b \q1 \v 12 Yoka Ngai, oh Jakobi, \q2 Isalaele, yo oyo nabengaki ! \q1 Ngai, nabongwanaka te ; \q2 nazalaka na ebandeli mpe na suka. \q1 \v 13 Loboko na Ngai moko nde esalaki miboko ya mabele, \q2 mpe loboko na Ngai ya mobali nde etandaki likolo. \q1 Soki nabengi yango, \q2 yango nyonso etelemaka elongo. \b \q1 \v 14 Bino nyonso, boya elongo mpe boyoka : \q2 Nzambe nini ya ekeko asakolaki makambo oyo ? \q1 Moto oyo Yawe alingaka akokokisa \q2 mokano na Ye mpo na Babiloni, \q2 mpe loboko na ye ekotelemela bato ya Babiloni. \q1 \v 15 Ezali Ngai, solo ezali Ngai nde nalobi \q2 mpe nabengi ye ; \q2 nakoyeisa ye, mpe akolonga na makambo na ye. \q1 \v 16 Bopusana pene na Ngai mpe boyoka likambo oyo : \q2 « Wuta na ebandeli, nalobaka na nkuku te ; \q1 wuta tango makambo oyo esalema, nazali wana. » \q2 Mpe sik’oyo, Nkolo Yawe atindi Ngai \q2 elongo na Molimo na Ye. \b \q1 \v 17 Tala liloba oyo Yawe, Mosikoli na yo, \q2 Mosantu ya Isalaele, alobi : \q1 « Nazali Yawe, Nzambe na yo, \q2 oyo ateyaka yo makambo ya malamu \q1 mpo na bolamu na yo ; \q2 oyo atambolisaka yo na nzela oyo osengeli kolanda. \q1 \v 18 Oh ! Soki osalaki penza keba na mibeko na Ngai, \q2 kimia na yo elingaki kozala lokola ebale, \q2 mpe bosembo na yo, lokola mbonge ya ebale monene ; \q1 \v 19 bakitani na yo balingaki kozala lokola zelo, \q2 bana na yo, lokola motango ya mbuma ya zelo ; \q1 kombo na bango elingaki kolongwa te \q2 to kobebisama te liboso na Ngai. \b \q1 \v 20 Bobima na Babiloni, \q2 bokima wuta na bato ya Babiloni ! \q1 Boloba yango na makelele ya esengo \q2 mpe botatola yango ; \q1 bopanza sango na yango kino na suka ya mokili ; \q2 boloba : ‹ Yawe asikoli Jakobi, mosali na Ye. › » \b \q1 \v 21 Bayokaki posa ya mayi te \q2 tango azalaki kotambolisa bango na esobe, \q1 abimisaki mayi na libanga mpo na bango, \q2 abukaki libanga mpe mayi ebimaki. \b \q1 \v 22 Kasi Yawe alobaki : \q2 « Kimia ezali te mpo na bato mabe. » \c 49 \s1 Nzembo ya mibale ya Mosali na Yawe \q1 \v 1 Boyoka ngai, bino bisanga ; \q2 boyoka maloba oyo, bino bikolo oyo ezali mosika : \q1 Yawe abengaki ngai \q2 wuta na libumu ya mama na ngai, \q1 azalaki kolobela kombo na ngai \q2 wuta mbotama na ngai ; \q1 \v 2 akomisi monoko na ngai lokola mopanga ya minu makasi, \q2 abombi ngai na se ya elili ya loboko na Ye, \q1 akomisi ngai lokola tolotolo \q2 mpe abombi ngai kati na ebombelo batolotolo na Ye ; \q1 \v 3 alobaki na ngai : \q2 « Oh Isalaele, ozali mosali na ngai, \q2 nakomonisa nkembo na ngai na nzela na yo. » \q1 \v 4 Kasi ngai, nalobaki : \q2 « Nabimisaki motoki na ngai se pamba, \q1 nasilisaki makasi na ngai na pamba \q2 mpe nazwaki litomba moko te. \q1 Nzokande, lifuti na ngai ezali na maboko ya Yawe, \q2 mpe litomba na ngai ezali epai ya Nzambe na ngai. » \b \q1 \v 5 Mpe sik’oyo, Yawe oyo asalaki ngai \q2 wuta na libumu ya mama na ngai \q1 mpo ete nazala mosali na Ye, \q2 mpo na kozongisa Jakobi epai na Ye \q1 mpe kosangisa Isalaele pene na Ye, \q2 pamba te nazali na lokumu na miso ya Yawe \q2 mpe Nzambe na ngai azali makasi na ngai, \q1 \v 6 Ye, Yawe, alobi : \q2 « Ezali penza likambo moke mpo na yo kozala mosali na Ngai \q1 mpo na kotelemisa mabota ya Jakobi \q2 mpe kozongisa bana ya Isalaele oyo nabombaki. \q1 Mpe lisusu, nakokomisa yo pole mpo na bikolo mosusu \q2 mpo ete omema lobiko na Ngai \q2 kino na suka ya mokili. » \b \q1 \v 7 Tala liloba oyo Yawe, \q2 Mosikoli mpe Mosantu ya Isalaele, \q1 alobi epai na ye oyo atiolami \q2 mpe amonani lokola eloko pamba na miso ya ekolo, \q1 na miso ya mowumbu ya bakonzi mabe : \q2 « Bakonzi bakomona yo mpe bakotelema, \q1 bakambi bakomona yo mpe bakogumbama, \q2 likolo na Yawe oyo azali Sembo, \q2 Mosantu ya Isalaele, oyo aponaki yo. » \s1 Isalaele akotelema lisusu \q1 \v 8 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Na tango ya malamu, nakoyanola yo ; \q1 mpe na mokolo ya lobiko, nakosunga yo ; \q1 nakobatela yo mpe nakotombola yo \q2 mpo ete osala boyokani elongo na bato, \q1 osala ete mokili etombwama \q2 mpe ozongisela yango libula na yango oyo ebebisamaki ; \q1 \v 9 mpo ete oloba na bakangami : ‹ Bobima, › \q2 mpe na bato oyo bazali kati na molili : \q1 ‹ Bokoma bansomi ! › \b \q1 Boye bakozala lokola bibwele oyo \q2 ezali kolia matiti pene ya nzela, \q1 mpe bakozwa bilei na bangomba nyonso \q2 oyo ebotaka matiti te. \q1 \v 10 Bakoyoka lisusu nzala te mpe posa ya mayi te ; \q1 molunge ya esobe to moyi makasi \q2 ekomonisa bango pasi te, \q1 pamba te Ye oyo alingaka bango \q2 akolakisa bango nzela \q2 mpe akomema bango pene ya miluka. \q1 \v 11 Nakobongola bangomba na Ngai nyonso nzela, \q2 mpe nakokunda mabulu ya banzela na Ngai ya minene. \q1 \v 12 Tala, bakowuta penza mosika, \q2 ndambo moko na ngambo ya nor, \q1 ndambo mosusu na ngambo ya weste, \q2 mpe ndambo mosusu na etuka ya Sinimi. » \b \q1 \v 13 Oh likolo, ganga na esengo ! \q2 Oh mabele, sepela ! \q1 Oh bangomba, boyemba banzembo ! \q2 Pamba te Yawe abondisi bato na Ye \q2 mpe ayokeli mawa bato oyo banyokwamaki. \b \q1 \v 14 Kasi Siona alobaki : \q2 « Yawe asundoli ngai, \q2 Nkolo na ngai abosani ngai ! » \q1 \v 15 Boni, mama akoki solo kobosana \q2 bebe na ye oyo azali komelisa mabele, \q1 to kozanga bolingo epai ya mwana oyo ye aboti ? \q2 Ata soki akoki kobosana, \q2 ngai nakoki kobosana yo te ! \q1 \v 16 Tala, nakoma yo na matandu ya maboko na ngai ; \q2 bamir na yo ya makasi ezalaka tango nyonso liboso na ngai. \q1 \v 17 Bana na yo bakozonga na lombangu, \q2 kasi babebisi na yo bakokende mosika na yo. \q1 \v 18 Tombola miso na yo mpe tala na zingazinga : \q2 bana na yo nyonso basangani \q1 mpe bazali koya epai na yo. \q2 Nalapi ndayi na Kombo na Ngai, elobi Yawe, \q1 ete bakozala mpo na yo lokola babiju ya talo, \q2 mpe okolata bango lokola mokaba ya mwasi mobandami na libala. \q1 \v 19 Ata soki mokili na yo ekomaki lokola mipiku ya mabanga, \q2 bongo ebebisamaki mpe etikalaki lisusu na bato te ; \q1 sik’oyo, ekokoma moke mpo na bato na yo, \q2 mpe bato oyo bazalaki komonisa yo pasi \q2 bakozala mosika na yo. \q1 \v 20 Okanisaki ete ozangaki bana, \q2 kasi okoyoka bango koloba na matoyi na yo : \q1 « Esika oyo ezali penza moke mpo na biso ; \q2 pesa biso esika oyo eleki monene \q2 mpo ete tokoka kovanda. » \q1 \v 21 Boye, okomilobela na motema : \q2 « Nani abotelaki ngai bana nyonso oyo ? \q1 Nazangaki bana mpe nazalaki kobota te, \q2 nazalaki mowumbu mpe moto basundola. \q1 Bongo nani abokolaki bango ? \q2 Natikalaki kaka ngai moko, \q2 bongo bana oyo bawuti wapi ? » \m \v 22 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q1 « Tala, nakotombola loboko na Ngai liboso ya bikolo, \q2 nakotelemisa bendele na Ngai liboso ya bato ; \q1 bakomema bana na yo ya mibali na maboko na bango \q2 mpe oyo ya basi, na mapeka na bango. \q1 \v 23 Bakonzi bakozala batata babokoli na yo, \q2 mpe basi na bango, basungi na yo ; \q1 bakofukama liboso na yo \q2 na bilongi etala na mabele, \q1 bakolembola putulu ya makolo na yo. \q2 Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe ; \q1 ete bato oyo batielaka Ngai motema \q2 bayokisamaka soni te. » \b \q1 \v 24 Boni, bakoki solo kobotola bomengo ya bitumba \q2 na maboko ya basoda ya mpiko \q1 to kokangola mokangami \q2 wuta na maboko ya monyokoli na ye ? \q1 \v 25 Kasi tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Solo, mokangami akokangolama na maboko ya basoda ya mpiko, \q1 mpe bomengo ya bitumba ekokangolama na maboko ya monyokoli. \q2 Nakotelemela bato oyo bakotelemela yo, \q2 mpe nakobikisa bana na yo. \q1 \v 26 Nakosala ete banyokoli na yo \q2 balia misuni na bango moko ; \q1 bakolangwa makila na bango moko \q2 ndenge balangwaka masanga ya vino. \q1 Boye, moto nyonso akoyeba ete \q2 Ngai Yawe, nazali Mobikisi na yo, \q2 Mosikoli na yo, Elombe ya Jakobi. » \c 50 \s1 Lisumu ya Isalaele mpe botosi ya Mosali \q1 \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 « Wapi mokanda ya koboma libala \q2 oyo Ngai nabenganelaki mama na bino ? \q1 To natekaki bino epai ya nani \q2 oyo Ngai nazalaki na niongo na ye ? \q1 Botekamaki mpo na masumu na bino ; \q2 mpe libala ya mama na bino ekufaki \q2 mpo na botomboki na bino. \q1 \v 2 Mpo na nini moto azalaki te tango nayaki ? \q2 Mpo na nini moto apesaki eyano te tango nabengaki ? \q1 Loboko na Ngai ezalaki mokuse mpo na kosikola bino ? \q2 Nazangaki solo makasi mpo na kokangola bino ? \q1 Na pamela na Ngai, \q2 nakawusaka ebale monene, \q1 nakomisaka bibale esobe ; \q2 mbisi na yango ekomaka kolumba solo \q2 mpo ete mayi ezali te mpe ekufaka na posa ya mayi. \q1 \v 3 Nalatisaka likolo elamba ya mwindo \q2 mpe nazipaka yango na bilamba ya saki. » \b \q1 \v 4 Nkolo Yawe apesaki ngai maloba ya bayekoli, \q2 mpo ete nakoka kolendisa na nzela ya liloba \q1 moto oyo alembi ; \q2 alamusaka ngai tongo nyonso, \q1 alamusaka litoyi na ngai \q2 mpo ete nayoka lokola moyekoli. \q1 \v 5 Nkolo Yawe afungolaki ngai matoyi, \q2 mpe ngai natiaki moto makasi te ; \q2 namizongisaki sima te. \q1 \v 6 Napesaki mokongo na ngai \q2 epai ya bato oyo bazalaki kobeta ngai, \q1 matama na ngai, epai ya bato \q2 oyo bazalaki kopikola ngai mandefu. \q1 Nabombaki elongi na ngai te \q2 na kotiolama mpe na basoyi. \q1 \v 7 Lokola Nkolo Yawe asungaka ngai, \q2 nakoyokisama soni te. \q1 Yango wana, nakomisi elongi na ngai \q2 makasi lokola libanga, \q2 mpe nayebi ete nakoyokisama soni te. \q1 \v 8 Ye oyo alongisaka ngai azali pene, \q2 nani akokoka kotelemela bosembo na ngai ? \q1 Tika ete tosamba elongo ! \q2 Nani akofunda ngai ete tosamba na ye ? \q2 Tika ete apusana pene na ngai ! \q1 \v 9 Ezali Nkolo Yawe nde asungaka ngai ; \q2 nani akolonga ngai na esambiselo ? \q1 Tala, bango nyonso bakokweya \q2 lokola bilamba ya kala oyo ebeba, \q2 bongo nseka ekolia bango. \b \q1 \v 10 Ezali na moto kati na bino \q2 oyo atosaka Yawe \q1 mpe ayokaka mongongo ya Mowumbu na Ye, \q2 bongo atambola kati na molili \q1 mpe atikala komona pole te ? \q2 Tika ete atia elikya na ye kati na Kombo na Yawe \q2 mpe atalela Nzambe na ye. \q1 \v 11 Kasi sik’oyo, bino nyonso oyo bopelisi moto \q2 mpe bosimbi bakoni oyo ezali kopela moto, \q1 bokende, botambola na pole ya moto na bino \q2 mpe ya bakoni oyo bopelisi. \q1 Tala oyo bokozwa na maboko na ngai : \q2 Bokokufa na pasi ! \c 51 \s1 Lobiko ya seko mpo na Siona \q1 \v 1 « Boyoka ngai, \q2 bino bato oyo bolukaka bosembo \q1 mpe bolukaka Yawe ! \q2 Botala libanga epai wapi bosalemaki, \q2 mpe libulu epai wapi bobendamaki. \q1 \v 2 Botala Abrayami, tata na bino ; \q2 mpe Sara oyo abotaki bino. \q1 Tango nabengaki ye, azalaki kaka ye moko ; \q2 napambolaki ye mpe nakomisaki ye \q2 tata ya bato ebele ! \q1 \v 3 Solo, Yawe akobondisa Siona \q2 mpe akotala na liso ya ngolu \q1 bisika nyonso ya Siona oyo ebeba ; \q2 akokomisa esobe na yango lokola Edeni, \q1 bisika na yango ekawuka, lokola elanga ya Yawe. \q2 Esengo mpe kosepela nde ekomonana kuna, \q2 matondi mpe mongongo ya banzembo. \b \q1 \v 4 Oh bato na ngai, boyoka ngai ! \q2 Bino, ekolo na ngai, boyoka ngai malamu : \q1 Mpo ete Mobeko ekobimela epai na ngai, \q2 lolenge na ngai ya kokata makambo ekoyeisa pole na bikolo. \q1 \v 5 Bosembo na ngai ezali pene, \q2 lobiko na ngai ebimi na lombangu, \q1 mpe maboko na ngai ekosambisa bikolo. \q2 Bisanga ekotalela ngai, \q2 ekozala na elikya na nguya ya loboko na ngai. \q1 \v 6 Botombola miso na bino na likolo, \q2 botala na se, na mabele ; \q1 likolo ekolimwa lokola milinga, \q2 mabele ekonuna lokola elamba, \q1 mpe bavandi na yango bakokufa lokola banzinzi. \q2 Kasi lobiko na ngai ekowumela seko na seko, \q2 bosembo na ngai ekotikala kokweya mokolo moko te. \b \q1 \v 7 Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, \q2 bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai \q1 kati na mitema na bino : \q2 Bobanga te lolenge bato bakotiola bino \q2 to bozala na somo ya mangungu na bango te. \q1 \v 8 Pamba te nseka ekolia bango lokola elamba, \q2 mpe bampese ekolia bango lokola elamba \q1 basala na bapwale ya meme ; \q2 kasi bosembo na ngai ekowumela seko na seko, \q2 mpe lobiko na ngai, bileko na bileko. » \b \q1 \v 9 Oh loboko na Yawe, lamuka, lamuka ! \q2 Lata makasi ! \q1 Lamuka, lokola na mikolo ya kala, \q2 na bileko oyo eleka kala ! \q1 Ezali Yo te oyo okataki-kataki Raabi, \q2 oyo obomaki dalagona ? \q1 \v 10 Ezali Yo te oyo okawusaki ebale monene, \q2 mayi oyo ya mozindo makasi ? \q1 Ezali Yo te oyo opasolaki nzela kati na ebale monene \q2 mpo ete basikolami na Yo bakoka kokatisa ? \q1 \v 11 Boye, bato oyo Yawe akangoli bakozonga, \q2 bakokota kati na Siona na banzembo ya esengo ; \q1 esengo ya libela na libela ekozala \q2 lokola motole na mito na bango ; \q1 bakotondisama na esengo mpe na kosepela, \q2 bongo pasi mpe minyoko ekokima mosika na bango. \b \q1 \v 12 « Ezali Ngai, Ngai nde nabondisaka bino. \q2 Ozali nani mpo ete obanga moto oyo akokufa, \q2 mwana na moto oyo azali kaka lokola matiti ? \q1 \v 13 Ozali mpe kobosana Yawe, Mokeli na Yo, \q2 oyo atandaki likolo ndenge batandaka liputa \q1 mpe atongaki miboko ya mabele, \q2 mpo ete okoma kobika mikolo nyonso na kobanga \q1 liboso ya kanda ya banyokoli \q2 oyo babongisami mpo na kobebisama ? \q2 Pamba te, wapi kanda ya banyokoli ? \q1 \v 14 Etikali kaka moke, bakangami bakozwa bonsomi, \q2 bakokufa lisusu te kati na boloko na bango \q2 mpe bakozanga lisusu bilei te. \b \q1 \v 15 Nazali Yawe, Nzambe na Yo, \q2 oyo aningisaka ebale monene \q1 mpo ete mbonge na yango etomboka. \q2 Kombo na Ye ezali ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga. › \q1 \v 16 Natiaki maloba na Ngai na monoko na yo, \q2 mpe nazipi yo na elili ya loboko na ngai ; \q1 nazali Ye oyo atiaki likolo na esika na yango, \q2 oyo atongaki miboko ya mabele \q1 mpe oyo alobaki na Siona : \q2 ‹ Bozali bato na Ngai ! › » \s1 Yelusalemi etelemi \q1 \v 17 Lamuka, lamuka ! \q2 Telema, Yelusalemi, \q1 yo oyo omelaki, wuta na loboko ya Yawe, \q2 kopo ya kanda na Ye ; \q1 yo oyo omelaki mpe osilisaki kino na suka \q2 kopo oyo epesaka bato kizunguzungu. \q1 \v 18 Kati na bana nyonso oyo abotaki, \q2 Ezali na mwana moko te \q1 oyo azali kolakisa ye nzela ; \q2 kati na bana oyo abokolaki, \q2 moko te azali kosimba ye na loboko. \b \q1 \v 19 Makama mibale oyo ekomeli yo, \q2 nani akoki kolendisa yo : \q1 Mokili na yo ekomi mipiku ya mabanga mpe ebebisami, \q2 nzala makasi mpe mopanga, \q2 nani akobondisa yo ? \q1 \v 20 Bana na yo balembi, \q2 balali-lali na babalabala nyonso \q1 lokola mboloko oyo ekangami na motambo ; \q2 kanda ya Yawe mpe pamela ya Nzambe na yo \q2 nde ebuki-buki bango lolenge wana. \b \q1 \v 21 Yango wana, yo oyo basambwisi, \q2 yo oyo olangwe, kasi na masanga ya vino te, \q2 yoka makambo oyo : \q1 \v 22 Tala liloba oyo Nkolo Yawe, Nzambe na yo, \q2 oyo abundelaka bato na Ye, alobi : \q1 « Tala, nalongoli kopo ya kizunguzungu, \q2 kopo ya kanda na Ngai, na loboko na yo, \q2 okomela yango lisusu te. \q1 \v 23 Nakotia yango na loboko ya banyokoli na yo, \q2 oyo balobaki na yo : \q1 ‹ Lala na se mpo ete totambola likolo na yo ! › \q2 Mpe okomisaki mokongo na yo lokola nzela, \q2 lokola balabala mpo ete batambola likolo na yo. » \c 52 \s1 Yelusalemi ekotongama lisusu \q1 \v 1 Oh Siona, lamuka, lamuka ! \q2 Tika ete omikomisa lisusu makasi. \q1 Yelusalemi, engumba ya bule, \q2 lata bilamba na yo ya lokumu, \q1 pamba te ezala moto oyo bakata ngenga te \q2 to moto ya mbindo, akokota lisusu kati na yo te. \q1 \v 2 Oh Yelusalemi, milongola na putulu, \q2 telema mpe vanda na esika na yo ya lokumu ! \q1 Oh Siona, mboka kitoko, \q2 yo oyo ozali mokangami, \q2 kata minyololo na kingo na yo ! \p \v 3 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bomitekaki na ofele, bokosikolama mpe na mbongo te. » \v 4 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Na ebandeli, bato na Ngai bakendeki na Ejipito mpo na kovanda kuna lokola bapaya ; mpe na sima, Asiri anyokolaki bango. \v 5 Sik’oyo, eloko nini nasili kozwa awa, » elobi Yawe ? « Pamba te bamemaki bato na Ngai na pamba, mpe bato oyo bazali kokonza bango bazali koganga makasi, » elobi Yawe, « mpe, mokolo na mokolo mpe tango nyonso, Kombo na Ngai ezali kofingama. \v 6 Yango wana, bato na Ngai bakoyeba Kombo na Ngai ; yango wana, na mokolo wana, bakoyeba ete Ngai moko nde nasakolaki yango. Solo, ezali nde Ngai. » \s2 Nzambe akangolaka \q1 \v 7 Tala ndenge ezali kitoko, na likolo ya bangomba, \q2 makolo ya bato oyo basakolaka basango ya malamu, \q1 ba-oyo batatolaka kimia, \q2 ba-oyo bamemaka basango ya boboto, \q1 ba-oyo basakolaka lobiko, \q2 ba-oyo balobaka na Siona : \q2 « Nzambe na yo azali Mokonzi ! » \q1 \v 8 Yoka ! Bakengeli na yo batomboli mingongo ; \q2 bazali koganga elongo na esengo, \q1 pamba te, na miso na bango, \q2 bakomona Yawe kozonga lisusu na Siona. \q1 \v 9 Bino mipiku ya mabanga ya Yelusalemi, \q2 boyemba elongo banzembo ya esengo, \q1 pamba te Yawe abondisi bato na Ye, \q2 asikoli Yelusalemi. \q1 \v 10 Yawe asemboli na pole loboko na Ye ya bule \q2 na miso ya bikolo nyonso ; \q1 mpe suka nyonso ya mokili ekomona \q2 Lobiko ya Nzambe na biso. \b \q1 \v 11 Bokende, bokende, bobima awa ! \q2 Bosimba eloko moko te ya mbindo ! \q1 Bobima kati na yango mpe bozala peto, \q2 bino oyo bomemi bisalelo ya Tempelo ya Yawe ! \q1 \v 12 Kasi na mbala oyo, bokobima na kowela te \q2 mpe bokokende te lokola bato bazali kokima, \q1 pamba te Yawe akotambola liboso na bino \q2 mpe Nzambe ya Isalaele akozala Mokengeli na bino na sima. \s1 Pasi mpe nkembo ya Mosali \q1 \v 13 Tala, mosali na ngai akosala na bwanya, akotombolama, \q2 akomata likolo mpe akonetolama makasi penza. \q1 \v 14 Ndenge bato mingi bazalaki na somo mpo na ye \q2 na ndenge abebaki, elongi na ye etikalaki lisusu te lokola elongi ya moto, \q2 mpe lolenge na ye etikalaki lisusu te lokola mwana ya moto nyonso, \q1 \v 15 ndenge wana mpe bato ya bikolo bakokamwa, \q2 mpe bakonzi bakokanga minoko na bango na tina na ye, \q1 pamba te bakomona oyo nanu babetela bango lisolo te \q2 mpe bakososola oyo nanu bayoka te. \b \c 53 \q1 \v 1 Nani andimaki makambo oyo tosakolaki ? \q2 Mpe epai ya nani loboko na Yawe emonisamaki ? \q1 \v 2 Pamba te akolaki liboso na Ye \q2 lokola nzete ya moke, \q1 lokola mosisa oyo ebimi na esobe ; \q2 azalaki ata na kitoko to lokumu te \q1 oyo ekokaki kobenda miso na biso ete etala ye ; \q2 lolenge na ye ezalaki ata na eloko moko te \q2 oyo ekokaki kosala ete tosepela na ye. \q1 \v 3 Bato batiolaki mpe basundolaki ye, \q2 ye moto na pasi, amesana konyokwama. \q1 Lokola moto oyo babwakeli soyi na elongi, \q2 atiolamaki, mpe tondimaki ye te. \b \q1 \v 4 Solo, amemaki mokumba ya bokono na biso \q2 mpe alataki pasi na biso kati na nzoto na ye ; \q1 kasi biso, tokanisaki ete Nzambe nde abetaki ye, \q2 apesaki ye etumbu mpe asambwisaki ye. \q1 \v 5 Nzokande, bazokisaki ye bapota mpo na botomboki na biso, \q2 banyokolaki ye mpo na masumu na biso ; \q1 etumbu oyo ememelaki biso kimia \q2 ekweyaki na nzoto na ye ; \q1 mpe na nzela ya bapota na ye, \q2 biso tobikisami na bokono na biso. \q1 \v 6 Biso nyonso, tozalaki koyengayenga lokola bana meme, \q2 moko na moko azalaki kolanda nzela na ye ; \q1 bongo Yawe akweyisaki masumu na biso nyonso \q2 na nzoto na ye. \b \q1 \v 7 Banyokolaki ye mpe bamonisaki ye pasi, \q2 kasi atikalaki kofungola monoko na ye te \q1 lokola mpate oyo bazali komema \q2 na esika oyo babomelaka banyama, \q1 lokola meme liboso ya bato oyo bazali kolongola yango bapwale ; \q2 akangaki monoko na ye. \q1 \v 8 Babomaki ye na nzela ya minyoko mpe ya etumbu ; \q2 kasi nani kati na bato ya tango na ye akokaki \q1 komitungisa na tina na ye ? \q2 Pamba te balongolaki ye na mokili ya bato ya bomoi, \q2 babetaki ye likolo ya masumu ya bato na Ngai. \q1 \v 9 Bapesaki ye kunda kati na bato mabe, \q2 mpe kunda na ye ezalaki elongo na bazwi, \q1 atako asalaki likambo moko te ya mabe, \q2 mpe monoko na ye etikalaki koloba lokuta te. \b \q1 \v 10 Nzokande, ezalaki mokano na Yawe \q2 ete anyokwama na nzela ya pasi. \q1 Atako Yawe akomisaki bomoi na ye \q2 mbeka mpo na masumu, \q1 akomona bakitani na ye \q2 mpe mikolo na ye ekobakisama ; \q1 bongo mokano na Yawe ekolongisama na loboko na ye. \b \q1 \v 11 Sima na pasi ya molimo na ye, \q2 akomona pole ya bomoi \q1 mpe posa na ye ekokokisama. \q2 Na nzela ya boyebi na ye, \q1 Mosali na Ngai ya sembo akolongisa bato ebele \q2 mpe akomema masumu na bango. \q1 \v 12 Yango wana, nakopesa ye libula kati na bato minene, \q2 mpe akokabola bomengo ya bitumba elongo na bato ya makasi, \q1 pamba te akabaki bomoi na ye na kufa \q2 mpe amitikaki ete batanga ye na molongo ya babomi bato, \q1 pamba te amemaki masumu ya bato ebele \q2 mpe amikomisaki molobeli ya babuki mibeko. \c 54 \s1 Nkembo oyo ekoya na Yelusalemi \q1 \v 1 Oh mwasi ekomba, yemba nzembo na esengo, \q2 yo oyo obotaka te ! \q1 Yemba nzembo mpe ganga na esengo, \q2 yo mwasi oyo oyoki nanu pasi ya kobota te ! \q1 Pamba te bana ya mwasi oyo basundola bakozala ebele \q2 koleka bana ya mwasi ya libala, elobi Yawe. \q1 \v 2 Yeisa ndako na yo ya kapo monene, \q2 bakisa bakapo na ndako yango \q1 mpo ete eya monene ; \q2 kokanga motema te ! \q1 Benda na molayi basinga na yo \q2 mpe pika banzete na yo makasi ! \q1 \v 3 Pamba te okofungwama \q2 na ngambo ya loboko na yo ya mobali \q1 mpe na ngambo ya loboko na yo ya mwasi ; \q2 bakitani na yo bakokonza bikolo mosusu \q1 mpe bakosala ete bato bavanda lisusu \q2 na bingumba na bango oyo etikalaki lisusu na bato te. \b \q1 \v 4 Kobanga te, pamba te okoyoka lisusu soni te ! \q2 Kozala na mawa te, pamba te okotiolama lisusu te ! \q1 Okobosana soni ya bolenge na yo \q2 mpe okokanisa lisusu te \q2 pasi na yo ya kokufisa mobali ; \q1 \v 5 pamba te Mokeli na yo nde mobali na yo, \q2 Kombo na Ye : Yawe, Mokonzi ya mampinga ; \q1 Mosantu ya Isalaele azali Mosikoli na yo ; \q2 babengaka Ye : Nzambe ya mokili mobimba. \q1 \v 6 Pamba te Yawe abengi yo lisusu \q2 lokola mwasi oyo basundola, \q1 bongo azali na pasi na motema. \q2 Ndenge nini bakoki solo kosundola \q2 mwasi oyo babala na bolenge, elobi Nzambe na yo ? \q1 \v 7 Nasundolaki yo kaka mpo na tango moke ; \q2 kasi na bolingo nyonso, nakozongisa yo. \q1 \v 8 Mpo ete nazalaki na kanda makasi, \q2 nabombelaki yo elongi na Ngai \q1 kaka mpo na tango moke ; \q2 kasi nakolakisa yo bolamu mpo na bolingo oyo ezangi suka, \q2 elobi Yawe, Mosikoli na yo. \b \q1 \v 9 Na miso na Ngai, ezali lokola na mikolo ya Noa, \q2 tango nalapaki ndayi ete mayi ya Noa \q1 ekozindisa lisusu mabele te. \q2 Boye, nalapi solo ndayi sik’oyo \q1 ete nakosilikela yo lisusu te \q2 mpe nakopamela yo lisusu te. \q1 \v 10 Ata bangomba milayi eningani, \q2 ata bangomba mikuse elongwe na bisika na yango, \q1 bolingo na Ngai epai na yo ekoningana te, \q2 mpe boyokani na Ngai ya kimia \q1 ekotikala kolongwa te, \q2 elobi Yawe oyo alingaka yo. \b \q1 \v 11 Oh engumba ya mawa, engumba oyo mopepe makasi esili kobuka \q2 mpe ezangeli kobondisama, \q1 nakotonga yo lisusu na mabanga ya talo \q2 mpe nakosala miboko na yo na mabanga ya safiri, \q1 \v 12 nakotonga bamir ya lopango na yo na mabanga ya ribi, \q2 nakosala bikuke na yo na biloko ya ngelingeli, \q2 mpe bamir na yo nyonso, na mabanga ya talo. \q1 \v 13 Yawe akoteya bana na yo nyonso, \q2 mpe kimia ya bana na yo ekozala monene. \q1 \v 14 Okolendisama kati na bosembo : \q2 minyoko ekozala mosika na yo, \q1 okobanga lisusu eloko moko te, \q2 mpe somo ekokende mosika na yo ; \q2 ekomeka kopusana lisusu pene na yo te. \q1 \v 15 Soki babundisi yo, ekowuta epai na Ngai te ; \q2 moto nyonso oyo akobundisa yo akokweya liboso na yo. \b \q1 \v 16 Tala, ezali Ngai nde nakelaki monyangwisi bibende na moto \q2 oyo apelisaka moto makasi na makala \q1 mpe asalaka ebundeli mpo ete esala mosala na yango. \q2 Ezali mpe kaka Ngai nde nakelaki mobebisi \q2 mpo ete asala mosala ya kobebisa. \q1 \v 17 Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi \q2 mpo na kosala yo mabe ekolonga ; \q1 mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, \q2 okokatela yango etumbu. \q1 Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, \q2 mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, \q2 elobi Yawe. \c 55 \s1 Feti ya ofele \q1 \v 1 « Bino nyonso oyo bozali na posa ya komela, boya, \q2 boya na esika oyo mayi ezali ; \q1 ezala bino oyo bozali na mbongo te, \q2 boya kosomba mpe kolia ; \q1 boya kosomba vino mpe miliki : \q2 ezali ya ofele, ya kosomba na mbongo te ! \q1 \v 2 Mpo na nini bozali kobebisa mbongo \q2 mpo na bilei oyo etongaka nzoto te, \q1 mpe kobimisa motoki \q2 mpo na bilei oyo etondisaka te ? \q1 Boyoka, boyoka Ngai mpe bolia bilei ya kitoko, \q2 mpe bokosepela na biloko ya elengi. \q1 \v 3 Bopesa Ngai matoyi na bino mpe boya epai na Ngai, \q2 boyoka mpe bokozala na bomoi ; \q1 nakosala boyokani ya libela elongo na bino, \q2 boyokani oyo nalakaki Davidi, \q2 na boyengebene mpe na bolingo na Ngai. \q1 \v 4 Tala, nakomisaki ye motatoli na Ngai \q2 na miso ya bato ya bikolo ebele, \q2 mokambi mpe motambolisi ya bato. \q1 \v 5 Solo, okobenga bikolo oyo oyebi te, \q2 mpe bikolo oyo eyebi yo te ekoya na lombangu epai na yo \q1 mpo na Yawe, Nzambe na yo, \q2 mpo na Mosantu ya Isalaele, \q2 pamba te alatisi yo nkembo. » \b \q1 \v 6 Boluka Yawe wana akoki nanu komonana, \q2 bobelela Ye wana azali nanu pene. \q1 \v 7 Tika ete moto mabe atika banzela na ye, \q2 mpe tika ete mosumuki atika makanisi na ye ; \q1 tika ete azonga epai na Yawe \q2 mpo ete ayokela ye mawa, \q1 tika ete azonga epai ya Nzambe na biso, \q2 pamba te alimbisaka kaka. \b \q1 \v 8 « Makanisi na Ngai ezali makanisi na bino te, \q2 mpe banzela na Ngai ezali banzela na bino te, » \q2 elobi Yawe. \q1 \v 9 « Pamba te ndenge likolo eleki mosika na mabele, \q2 ndenge wana mpe banzela na Ngai ezali \q1 likolo koleka banzela na bino, \q2 mpe makanisi na Ngai ezali likolo \q2 koleka makanisi na bino. \b \q1 \v 10 Ndenge mvula mpe mvula ya pembe \q2 enokaka wuta na likolo mpe ezongaka te na likolo \q1 soki epolisi mabele te, \q2 soki ebotisi yango bambuma mpe bafololo te, \q1 soki epesi nkona te na moloni \q2 mpe bilei te na moto oyo aliaka, \q1 \v 11 ndenge wana mpe liloba oyo ebimaka na monoko na Ngai ezalaka : \q2 ezongaka pamba te epai na Ngai, \q1 soki esali nanu te mokano na Ngai, \q2 mpe soki ekokisi nanu te mabongisi oyo natindelaki yango. \b \q1 \v 12 Bokobima na esengo, \q2 mpe bakotambolisa bino na kimia ; \q1 bangomba milayi mpe bangomba mikuse \q2 ekoyemba nzembo ya elonga liboso na bino, \q2 mpe banzete nyonso ya zamba ekobeta maboko. \q1 \v 13 Nzete ya sipele ekobota na esika ya banzube, \q2 nzete ya mirite ekobota na esika ya basende ; \q1 ekozala, mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, \q2 elembo ya libela na libela, \q2 oyo ekotikala kobebisama te. » \c 56 \s1 Lobiko mpo na bikolo mosusu \q1 \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Botambola na alima mpe bosala kolanda bosembo, \q1 pamba te lobiko na Ngai ekomi pene \q2 mpe bosembo na Ngai ekomi pene ya komonisama. \q1 \v 2 Esengo na moto oyo asalaka bongo, \q2 oyo akangamaka na yango, \q1 oyo abatelaka mokolo ya Saba \q2 mpe abebisaka te bosantu na yango, \q1 mpe oyo abatelaka loboko na ye \q2 ete esala mabe te ! » \b \q1 \v 3 Tika ete mopaya oyo akangami na Yawe aloba te : \q2 « Yawe akokabola ngai solo na bato na Ye ! » \q1 Mpe tika ete soda oyo baboma mokongo aloba te : \q2 « Nazali na ngai kaka nzete ya kokawuka ! » \q1 \v 4 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Mpo na basoda oyo baboma bango mikongo, \q1 oyo babatelaka mokolo na Ngai ya Saba, \q2 oyo baponaka makambo oyo esepelisaka Ngai, \q2 mpe bakangamaka na boyokani na Ngai : \q1 \v 5 nakopesa bango, kati na Tempelo na Ngai mpe na bamir na yango, \q2 ekaniseli oyo ezali na kombo : \q1 ekozala malamu koleka kozala na bana mibali mpe bana basi. \q2 Nakopesa bango kombo ya libela, \q2 oyo bakoki kolongola te. \q1 \v 6 Bapaya oyo bakangami na Yawe \q2 mpo na kosalela Ye, \q1 mpo na kolinga Kombo na Ye \q2 mpe kogumbamela Ye, \q1 bato nyonso oyo bakobatela mokolo ya Saba \q2 mpe bakobebisa te bosantu na yango, \q2 mpe bato oyo bakokangama na boyokani na Ngai ; \q1 \v 7 nakomema bango na ngomba na Ngai ya bule \q2 mpe nakopesa bango esengo \q1 kati na Ndako epai wapi basambelaka Ngai. \q2 Bambeka na bango ya kotumba mpe makabo na bango \q1 ekondimama na etumbelo na Ngai, \q2 pamba te Ndako na Ngai ekobengama \q2 Ndako ya losambo mpo na bikolo nyonso. » \q1 \v 8 Nkolo Yawe oyo asangisi bawumbu ya Isalaele alobi : \q2 « Nakosangisa lisusu bato mosusu elongo na bango, \q2 esika moko na bato oyo nasilaki kosangisa. » \s1 Pamela ya Nzambe mpo na bato mabe \q1 \v 9 Bino banyama nyonso ya esobe, boya ; \q2 bino banyama nyonso ya zamba, boya kolia ! \q1 \v 10 Bakengeli ya Isalaele bazali bakufi miso, \q2 bango nyonso bazangi mayele ; \q1 bango nyonso bazali lokola bambwa oyo egangaka te, \q2 bakokaka koganga te, \q1 mosala na bango kolala mpe kolota bandoto, \q2 balingi pongi makasi. \q1 \v 11 Bazali lokola bambwa ya lokoso, batondaka te. \q2 Bazali babateli oyo bazangi bososoli, \q1 moko na moko kati na bango alandaka kaka nzela na ye moko \q2 mpe alukaka kaka bolamu na ye moko. \q1 \v 12 Moko na moko alobaka : \q2 « Yaka ! Tika ete nakamata vino \q1 mpo ete tomela mpe tolangwa na biso masanga ! \q2 Lobi mpe ekozala kaka ndenge moko na lelo, \q2 masanga ya komela ezali nanu ebele ! » \c 57 \s1 Mawa na basambeli bikeko \q1 \v 1 Moto ya sembo azali kokufa, \q2 kasi ezali kosala ata moto moko te motema pasi ; \q1 bato ya malamu bazali kosila, \q2 mpe ata moto moko te azali kososola \q1 ete bato ya sembo bazali kolongolama \q2 mpo ete bazala mosika na mabe. \q1 \v 2 Bato oyo batambolaka na bosembo \q2 bakokota na kimia, \q2 bakozwa bopemi na bambeto na bango. \b \q1 \v 3 « Kasi bino, boya awa, \q2 bino bana ya mwasi ya soloka, \q1 bino bana oyo bobotami \q2 na nzela ya ekobo mpe ya kindumba. \q1 \v 4 Bozali koseka nani ? \q2 Bozali kofungolela nani monoko ? \q1 Bozali kotiela nani penza monoko ? \q2 Boni, bozali bana ya batomboki te, \q2 bozali libota ya lokuta te ? \q1 \v 5 Bozali kopela na posa mabe \q2 na se ya banzete minene oyo babengaka terebente, \q1 na se ya banzete nyonso ya mibesu ; \q2 bozali kobonza bana na bino ya mibali \q1 lokola bambeka kati na lubwaku \q2 mpe kati na mabulu ya mabanga. \b \q1 \v 6 Libula na yo ezali nde banzambe ya bikeko \q2 kati na mabanga ya lubwaku, oyo babongisa ; \q1 solo, yango nde ezali libula na yo. \q2 Solo penza, ezali epai na yango \q1 nde ozali kosopa makabo ya masanga ya vino \q2 mpe kobonza makabo ya bambuma. \q2 Boni, nasepela solo na makambo ya boye ? \q1 \v 7 Otiaki mbeto na yo na likolo, na songe ya ngomba ; \q2 kuna nde ozalaki komata mpo na kobonza mbeka. \q1 \v 8 Otiaki nzambe na yo ya ekeko \q2 na sima ya ekuke na yo \q1 mpe ya mabaya oyo esimbaka ekuke yango. \q2 Osundoli ngai, olongoli bilamba na yo, \q1 omati likolo ya mbeto na yo ; \q2 osali boyokani elongo na bato oyo olingaka \q1 kosangisa na bango nzoto \q2 mpe oluki komona bolumbu na bango. \b \q1 \v 9 Okendeki epai ya Moloki na mafuta ya olive \q2 mpe obakisaki lisusu malasi na yo. \q1 Otindaki bantoma na yo mosika, \q2 omikitisaki na se penza \q2 kino na mboka ya bakufi. \q1 \v 10 Nzela na yo nyonso elembisaki yo nzoto, \q2 kasi omilobelaki te : ‹ Ezali na tina te ! › \q1 Loboko na yo ezwaki lisusu makasi ya sika, \q2 yango wana olembaki te. \b \q1 \v 11 Ozalaki na somo ya nani \q2 to ozalaki kobanga nani \q1 mpo ete okosa Ngai to obosana Ngai, \q2 to mpe obimisa Ngai na motema na yo ? \q1 Boni, ezali te mpo ete navandaki kimia tango molayi \q2 nde ozali kobanga Ngai te ? \q1 \v 12 Nakobimisa bosembo \q2 mpe misala na yo na pwasa, \q2 mpe ekozala na litomba ata moko te mpo na yo. \q1 \v 13 Tika ete mopiku ya banzambe na yo ya bikeko \q2 ebikisa yo tango okoluka lisungi ! \q1 Mopepe makasi ekomema yango nyonso, \q2 mopepe moko ekopikola yango. \q1 Kasi moto oyo akomisaka Ngai ebombamelo na ye \q2 akozwa lokola libula \q2 mokili mpe ngomba na Ngai ya bule. » \s1 Elaka ya kobondisama \q1 \v 14 Bakoloba : \q2 « Botondisa mabele, botondisa mabele, \q1 bobongisa nzela, \q2 bolongola mabaku na nzela ya bato na Ngai ! » \q1 \v 15 Pamba te, tala liloba oyo Ye-Oyo-Aleki-Likolo, \q2 Ye oyo akowumela seko na seko \q1 mpe azali bule, alobi : \q2 « Navandaka na esika oyo eleki likolo mpe ya bule ; \q1 kasi navandaka mpe elongo na moto oyo azali na pasi \q2 mpe oyo molimo na ye ebukani, \q1 mpo na kolendisa lisusu molimo oyo etutami \q2 mpe motema oyo ebukani. \q1 \v 16 Nakosambisa mpo na libela te \q2 mpe nakozala na kanda tango nyonso te, \q1 noki te molimo ya moto nyonso oyo nasala \q2 ekokufa na miso na Ngai. \b \q1 \v 17 Natombokaki likolo ya posa na ye \q2 ya kozwa bomengo na nzela ya moyibi ; \q1 napesaki ye etumbu, \q2 nabombaki elongi na Ngai na kanda, \q1 kasi apengwaki kaka mpo na kolanda \q2 posa mabe ya motema na ye. \q1 \v 18 Namonaki banzela na ye, \q2 kasi nakobikisa ye ; \q2 nakotambolisa ye mpe nakobondisa ye. \q1 \v 19 Nakotia masanzoli na bibebu \q2 ya bato oyo bazali kolela na Isalaele. \q1 Kimia, kimia ezala epai na ye oyo azali mosika, \q2 mpe epai na ye oyo azali pene, » elobi Yawe. \q2 « Mpe nakobikisa bango. » \q1 \v 20 Kasi bato mabe bazali lokola ebale oyo etomboki, \q2 oyo evandaka kimia te : \q1 mayi na yango ebwakaka \q2 potopoto mpe bosoto libanda. \q1 \v 21 Nzambe na ngai alobi : \q2 « Kimia ezali te mpo na bato mabe. » \c 58 \s1 Kokila bilei ya solo \q1 \v 1 « Ganga na mongongo makasi, kotika te ! \q2 Matisa mongongo na yo lokola kelelo, \q1 yebisa bato na Ngai botomboki na bango, \q2 mpe lakisa libota ya Jakobi masumu na ye. \q1 \v 2 Pamba te mokolo na mokolo, \q2 balukaka Ngai, \q1 basalaka lokola bato bazali na esengo \q2 ya koyeba nzela na Ngai, \q1 lokola ekolo oyo esalaka makambo ya sembo \q2 mpe esundolaka te mibeko ya Nzambe na bango ; \q1 basengaka Ngai mikano ya sembo, \q2 mpe basalaka lokola bato bazali na esengo \q2 ya kozala pene ya Nzambe ; \q1 \v 3 balobaka : ‹ Mpo na nini tokila bilei, \q2 soki ozali komona na Yo yango te ? \q1 Mpo na nini tomikitisa, \q2 soki ozali koyeba na yo yango te ? › \b \q1 Nzokande, na mokolo na bino ya kokila bilei, \q2 bozali kosala makambo oyo bolingi \q2 mpe bozali konyokola basali na bino nyonso. \q1 \v 4 Kokila bilei na bino ezali kosuka na koswana mpe na bitumba, \q2 bozali kobetana makofi na kanda nyonso ; \q1 bozali kokila bilei te ndenge esengeli kozala \q2 na mokolo oyo bozali kozela \q2 ete mongongo na bino eyokana na likolo. \q1 \v 5 Boni, ezali penza kokila bilei oyo Ngai nalingaka, \q2 mokolo oyo moto amikitisaka penza ye moko ? \q1 Boni, ezali kaka kogumba moto \q2 lokola nzete oyo ebotaka na mayi, \q1 kolata bilamba ya saki mpe kolala na putulu ? \q2 Ezali yango nde bino bozali kobenga kokila bilei, \q2 mokolo oyo Yawe alingaka ? \b \q1 \v 6 Tala lolenge ya kokila bilei oyo Ngai nalingaka : \q2 kokata minyololo ya masumu, \q1 kofungola basinga ya ekangiseli, \q2 kopesa bonsomi na mowumbu \q2 mpe kobuka ekangiseli nyonso. \q1 \v 7 Boni, ezali te kokabola bilei na yo \q2 na moto oyo azali na nzala ? \q1 Ezali te koyamba kati na ndako na yo, \q2 mobola oyo azali koyengayenga ? \q1 Ezali te kolatisa moto oyo azali bolumbu \q2 mpe koboya kopesa mokongo na ndeko na yo ? \b \q1 \v 8 Bongo, pole na yo ekongenga lokola moyi ya tongo, \q2 mpe nzoto na yo ekokoma kolongono na lombangu ; \q1 bosembo na yo ekotambola liboso na yo \q2 mpe nkembo na Yawe ekokengela yo na sima. \q1 \v 9 Boye, tango okobelela Yawe, akoyanola yo ; \q2 tango okosenga lisungi, \q1 akoloba : ‹ Ngai oyo. › \q2 Soki kati na yo, olongoli ekangiseli, \q1 otiki kolakisa bato mosapi \q2 mpe otiki maloba mabe ; \q1 \v 10 soki opesi bilei na yo \q2 epai na ye oyo azali na nzala \q1 mpe okokisi posa ya moto oyo bazali konyokola, \q2 pole na yo ekongenga kati na molili, \q2 mpe molili na yo ekokoma lokola moyi ya ngonga midi. \q1 \v 11 Yawe akotambolisa yo tango nyonso, \q2 akokokisa baposa na yo kati na mokili ekawuka \q1 mpe akokembisa mikuwa na yo. \q2 Okozala lokola elanga oyo basopeli mayi, \q2 lokola liziba oyo mayi na yango ekawukaka te. \q1 \v 12 Mpo na yo, \q2 bakotonga lisusu bandako oyo ebukana-bukana na kala, \q1 bakomatisa lisusu miboko oyo ebukana wuta kala ; \q2 bakobenga yo : ‹ Mobongisi ya bamir oyo ebukana \q2 mpe ya banzela oyo bato balekaka. › \b \q1 \v 13 Soki obateli matambe na yo \q2 ete ebebisa te lokumu ya mokolo ya Saba, \q1 mpe ete osala te mosala oyo yo olingi \q2 na mokolo na Ngai ya bule ; \q1 soki mokolo ya Saba ekomi esengo na yo \q2 mpe opesi lokumu na mokolo ya bule ya Yawe ; \q1 soki opesi yango lokumu \q2 na koboya kolanda nzela na yo moko, \q1 kosala misala na yo moko \q2 mpe kokoba na makambo oyo ezanga tina, \q1 \v 14 wana okozwa esengo na yo kati na Yawe \q2 mpe nakomema yo na bisika ya likolo ya mokili, \q1 nakoleisa yo wuta na libula ya Jakobi, tata na yo, » \q2 elobi Yawe. \c 59 \s1 Lisumu, koyambola mpe kosikolama \q1 \v 1 Tala, loboko na Yawe ezali mokuse te \q2 mpo na kobikisa, \q1 litoyi na Ye ekangama te mpo na koyoka ! \q1 \v 2 Kasi ezali bambeba na bino nde ekaboli \q2 bino na Nzambe na bino, \q1 ezali masumu na bino nde esali \q2 ete abombela bino elongi na Ye \q2 mpo ete ayoka bino te. \q1 \v 3 Pamba te maboko na bino ebebi na makila, \q2 mpe misapi na bino ebebi na makambo mabe ; \q1 bibebu na bino ezali koloba makambo ya lokuta, \q2 mpe minoko na bino ezali kobimisa makambo mabe. \q1 \v 4 Moko te azali kofunda makambo na bosolo, \q2 moko te azali kosamba na bosembo ; \q1 bazali kotia mitema na makambo ezanga tina \q2 mpe bazali koloba lokuta ; \q1 na mitema na bango, basalaka mabongisi ya kosala mabe \q2 mpe bakokisaka yango na misala na bango. \q1 \v 5 Bazali kopasola maki ya etupa\f + \fr 59.5 \fr*\ft Etupa ezali nyoka oyo babengaka na lifalanse vipère.\ft*\f* \q2 mpe bazali kotonga ndako ya lifofe\f + \fr 59.5 \fr*\ft Lifofe ezali nyama moke oyo babengaka na lifalanse araignée.\ft*\f*. \q1 Moto nyonso oyo akolia maki na yango akokufa ; \q2 mpe, soki apasoli liki moko, \q2 ekobimisa etupa. \q1 \v 6 Basinga ya lifofe ekokoma bilamba te, \q2 misala na bango ekobomba bango te ; \q1 misala na bango ezali misala mabe, \q2 mpe misala ya mobulu nde ezalaka na maboko na bango. \q1 \v 7 Matambe na bango epotaka mbangu mpo na kosala mabe, \q2 mpe bazalaka mbangu mpo na kosopa \q1 makila ya moto oyo asali mabe te. \q2 Makanisi na bango ezalaka kaka ya mabe ; \q2 kobuka-buka mpe kobebisa nde ezalaka na nzela na bango. \q1 \v 8 Bayebi nzela ya kimia te, \q2 mpe bosembo ezali na nzela na bango te ; \q1 bakomisaka nzela na bango nyoka-nyoka, \q2 moko te oyo akotambola na nzela yango \q2 akotikala koyeba kimia. \b \q1 \v 9 Yango wana bosembo ezali mosika na biso, \q2 mpe solo ezali kokomela biso te ; \q1 tozali kozela pole, \q2 kasi nyonso ezali kaka molili ; \q1 toluki moyi, \q2 kasi tozali kaka kotambola na molili. \q1 \v 10 Tozali kosimbasimba mir \q2 mpo na kotambola lokola bakufi miso, \q1 tozali kobanga kotambola \q2 lokola bato bazanga miso ; \q1 tozali kobeta mabaku na moyi makasi \q2 lokola nde tozali na butu makasi, \q1 tozali na nzoto kolongono \q2 kasi tokomi lokola bakufi. \q1 \v 11 Biso nyonso tozali konguna-nguna \q2 lokola bangombolo\f + \fr 59.11 \fr*\ft Ngombolo ezali nyama oyo babengaka na lifalanse ours.\ft*\f*, \q1 mpe tozali kolelalela tango nyonso lokola ebenga\f + \fr 59.11 \fr*\ft Ebenga ezali ndeke oyo babengaka na lifalanse pigeon.\ft*\f* ; \q2 tozali koluka bosembo, \q1 kasi tozali komona yango te, \q2 tozali koluka lobiko, \q2 kasi ekimi mosika na biso ! \q1 \v 12 Pamba te mabe na biso ekomi mingi na miso na Yo, \q2 mpe masumu na biso ekomi kofunda biso ; \q1 masumu na biso ezali liboso na biso \q2 mpe toyebi malamu bambeba na biso : \q1 \v 13 kotomboka mpe kowangana Yawe, \q2 kopesa Nzambe na biso mokongo, \q1 kosala mabongisi ya konyokola bato \q2 mpe kotombokisa bato, \q2 kokana na motema mpe koloba maloba ya lokuta. \q1 \v 14 Boye, bosembo ezongi sima, \q2 mpe bosolo etelemi mosika ; \q1 pamba te solo ekweyi na balabala, \q2 mpe bosembo elongi kokota te. \q1 \v 15 Solo ezali komonana lisusu na esika moko te ; \q2 bazali konyokola moto oyo azali kokima mabe. \b \q1 Yawe amoni yango mpe asepeli te \q2 ete kosambisa na bosembo ezali te. \q1 \v 16 Amoni ete ezali ata na moto moko te, \q2 akamwe ete ata molobeli moko te azali. \q1 Boye, loboko na Ye moko ememi Ye na lobiko, \q2 mpe bosembo na Ye elendisi Ye. \q1 \v 17 Alati bosembo lokola ebombelo ya tolo, \q2 mpe ekoti ya lobiko na moto na Ye ; \q1 alati kozongisa mabe na mabe lokola nzambala, \q2 mpe amizipi zuwa lokola kazaka. \q1 \v 18 Akofuta moto na moto kolanda misala na ye : \q2 kanda makasi epai ya bayini na Ye, \q1 mpe lifuti oyo ekoki epai ya banguna na Ye ; \q2 akopesa na bisanga lifuti na yango. \q1 \v 19 Longwa na ngambo ya weste, \q2 bato bakobanga Kombo ya Yawe ; \q1 mpe longwa na ngambo ya este, \q2 bato bakokumisa nkembo na Ye ; \q1 pamba te akoya lokola ebale oyo etomboki, \q2 oyo pema ya Yawe ekomema. \b \q1 \v 20 « Mpo na Siona, \q2 mosikoli akoya epai ya bato ya Jakobi, \q1 oyo bakobongwana na masumu na bango, » \q2 elobi Yawe. \p \v 21 « Bongo mpo na Ngai, » elobi Yawe, « tala boyokani na Ngai elongo na bango : Molimo na Ngai, oyo azali epai na yo, mpe maloba na Ngai, oyo natiaki na monoko na yo ekolongwa te, na monoko na yo to na minoko ya bana na yo to na minoko ya bakitani na bango, kobanda kaka na tango oyo mpe libela na libela, » elobi Yawe. \c 60 \s1 Pole ya Yelusalemi ekoya \q1 \v 1 « Telema mpe ngenga, \q2 pamba te pole na yo ezali koya, \q2 mpe nkembo na Yawe etelemi na likolo na yo. \q1 \v 2 Tala, molili ezipi mabele \q2 mpe molili makasi ezipi bato, \q1 kasi Yawe atelemi mpo na yo \q2 mpe nkembo na Ye emonani epai na yo. \q1 \v 3 Bikolo ekotambola na pole na yo, \q2 mpe bakonzi bakotambola na kongenga ya pole na yo. \q1 \v 4 Tombola miso zingazinga na yo mpe tala : \q2 Bango nyonso basangani mpe bazali koya epai na yo ; \q1 bana na yo ya mibali bawuti mosika, \q2 mpe oyo ya basi, bamemi bango na maboko. \q1 \v 5 Boye, okomona mpe okongenga, \q2 motema na yo ekobeta mpe ekosepela ; \q1 bomengo ya ebale ekoya epai na yo, \q2 mpe bozwi ya bikolo ekoya epai na yo. \q1 \v 6 Bashamo ebele ekotondisa mokili na yo, \q2 bana ya shamo ya mokili ya Madiani mpe ya Efa. \q1 Yango nyonso ekowuta na Saba, \q2 ekomema wolo mpe malasi ya ansa, \q2 mpe ekotatola masanzoli na Yawe. \q1 \v 7 Bibwele nyonso ya Kedari ekosangana epai na yo, \q2 bameme ya mibali ya Nebayoti ekosalela yo ; \q1 ekondimama lokola mbeka na likolo ya etumbelo na Ngai, \q2 mpe nakongengisa Tempelo \q2 na nzela ya nkembo na Ngai. \b \q1 \v 8 Banani oyo bazali kokima lokola mapata, \q2 lokola bibenga epai ya babokoli na yango ? \q1 \v 9 Solo, bisanga ekotalela Ngai ; \q2 bamasuwa ya Tarsisi ekozala na liboso, \q1 ekomema bana na yo ya mibali longwa mosika, \q2 elongo na palata mpe wolo, \q1 mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na yo, \q2 Mosantu ya Isalaele ; \q2 pamba te apesi yo nkembo. \b \q1 \v 10 Bapaya bakotonga lisusu bamir na yo, \q2 mpe bakonzi na bango bakosalela yo. \q1 Ezala nabetaki yo na kanda na Ngai, \q2 kasi nakoyokela yo mawa na ngolu na Ngai. \q1 \v 11 Bikuke na yo ekozala tango nyonso efungwama, \q2 ekotikala kokangama te, \q1 ezala na moyi to na butu, \q2 mpo ete bato bamemela yo bozwi ya bikolo, \q2 bakonzi na yango na molongo lokola bato bakangami na etumba. \m \v 12 Pamba te ekolo to mboka oyo ekosalela yo te ekobebisama ; solo, ekobebisama nye. \q1 \v 13 Nkembo ya Libani ekoya epai na yo, \q2 banzete ya sipele, ya pini mpe ya bwisi \q1 ekoya elongo mpo na kobongisa \q2 Esika na Ngai ya bule ; \q1 mpe nakopesa lokumu na esika na Ngai, \q2 oyo natiaka makolo na Ngai. \q1 \v 14 Bana ya banyokoli na yo \q2 bakoya kofukama liboso na yo ; \q1 bato nyonso oyo batiolaki yo \q2 bakofukama na se ya matambe na yo \q1 mpe bakobenga yo Engumba ya Yawe, \q2 Siona ya Mosantu ya Isalaele. \q1 \v 15 Ata basundolaki yo mpe bayinaki yo, \q2 mpe moto moko te azalaki lisusu koleka epai na yo, \q1 nakopesa yo lokumu mpo na tango nyonso \q2 mpe esengo ya libela na libela. \q1 \v 16 Okomela miliki ya bikolo \q2 mpe okomela mabele ya bakonzi ; \q1 boye okoyeba solo ete Ngai Yawe, \q2 nazali Mobikisi na yo mpe Mosikoli na yo, \q2 Elombe ya Jakobi. \b \q1 \v 17 Na esika ya bronze, nakomemela yo wolo, \q2 mpe na esika ya bibende, nakomemela yo palata ; \q1 na esika ya banzete, nakomemela yo bronze ; \q2 mpe na esika ya mabanga, nakomemela yo bibende ; \q1 nakokomisa Kimia moyangeli na yo, \q2 mpe Bosembo, mokambi na yo. \b \q1 \v 18 Kati na mokili na yo, okoyoka lisusu te \q2 makelele ya mobulu to ya kopanza \q1 to ya kobebisama kati na etando na yo ; \q2 kasi okobenga bamir na yo ‹ Lobiko, › \q2 mpe bikuke na yo ‹ Masanzoli. › \b \q1 \v 19 Pole ya moyi ekongengisa lisusu mokolo na yo te, \q2 to kongenga ya sanza ekongengisa yo lisusu te na butu ; \q1 pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, \q2 mpe Nzambe na yo akozala nkembo na yo. \q1 \v 20 Moyi na yo ekolala lisusu te, \q2 mpe sanza na yo ekobunga lisusu te ; \q1 pamba te Yawe akozala pole na yo mpo na libela, \q2 mpe mikolo na yo ya pasi ekosila. \b \q1 \v 21 Solo, bato na yo nyonso bakokoma bato ya sembo \q2 mpe bakozwa mokili lokola libula mpo na libela ; \q1 bazali mwa nzete moke oyo nalonaki, \q2 mosala ya maboko na Ngai, \q2 mpo na komonisa nkembo na Ngai. \q1 \v 22 Oyo aleki moke kati na bino akokoma nkoto moko, \q2 mpe oyo aleki moke penza akokoma ekolo ya makasi. \q1 Ngai, nazali Yawe, nakoyeisa yango mbangu \q2 na tango na yango. » \c 61 \s1 Mobu ya ngolu na Yawe mpo na Siona \q1 \v 1 Molimo ya Nkolo Yawe azali likolo na ngai, \q2 pamba te Yawe apakoli ngai mafuta \q1 mpo na kosakola sango malamu epai ya babola, \q2 kobikisa bato oyo mitema na bango esili kozoka, \q1 kosakola bonsomi epai ya bawumbu \q2 mpe kobimisa bakangami na boloko ; \q1 \v 2 mpo na kosakola mpo na Yawe mobu ya ngolu, \q2 kosakola mpo na Nzambe na biso mokolo ya kozongisa mabe na mabe, \q2 kobondisa bato oyo bazali kolela, \q1 \v 3 komema epai na bato ya Siona, oyo bazali na matanga \q2 mitole na esika ya putulu, \q1 mafuta ya esengo na esika ya matanga, \q2 mpe kopesa elamba ya lokumu na esika ya molimo oyo etutami. \q1 Bakobengama terebente ya bosembo, elanga ya Yawe, \q2 mpo na komonisa nkembo na Ye. \b \q1 \v 4 Bakotonga lisusu bisika \q2 oyo ekoma mabanga-mabanga wuta kala, \q1 bisika oyo ebukana-bukana wuta na tango ya kala ; \q2 bakokomisa sika bingumba oyo ekweya, \q2 oyo ebeba wuta bileko ya kala. \q1 \v 5 Bapaya bakoleisa bibwele na yo, \q2 bana ya bapaya bakosalela yo bilanga \q2 mpe bakolonela yo bilanga ya vino. \q1 \v 6 Kasi bino, bokobengama Banganga-Nzambe ya Yawe, \q2 bakopesa bino kombo bawumbu ya Nzambe na biso ; \q1 bokolia mpe bokotonda na bozwi ya bikolo \q2 mpe bokozwa lokumu na bomengo na bango. \b \q1 \v 7 Na esika ya soni na bino, \q2 bokozwa litomba mbala mibale, \q1 mpe na esika ya kosambwa, \q2 bokosepela na libula na bino. \q1 Boye, bokozwa litomba mbala mibale \q2 kati na mokili na bino \q2 mpe bokosepela mpo na libela. \q1 \v 8 Pamba te Ngai Yawe, nalingaka bosembo, \q2 nayinaka moyibi mpe masumu ; \q1 nakofuta bino na bolingo na Ngai \q2 mpe nakosala boyokani ya libela elongo na bino. \q1 \v 9 Bakitani na bino bakoyebana kati na mabota, \q2 mpe bana na bino bakoyebana kati na bikolo ; \q1 moto nyonso oyo akomona bino \q2 akondima ete bozali bato oyo Yawe apamboli. \b \q1 \v 10 Nakosepela makasi kati na Yawe, \q2 molimo na ngai ekosepela kati na Nzambe na ngai, \q1 pamba te alatisi ngai bilamba ya lobiko \q2 mpe azipi ngai na elamba ya bosembo, \q1 ndenge mobandami ya mobali alataka \q2 motole na ye ya kitoko lokola Nganga-Nzambe \q2 to ndenge mobandami ya mwasi alataka mayaka na ye ya talo. \q1 \v 11 Pamba te ndenge mabele ebimisaka matiti \q2 mpe elanga ebimisaka nkona na yango, \q1 Nkolo Yawe mpe akoyeisa bosembo \q2 elongo na masanzoli liboso ya bikolo nyonso. \b \c 62 \q1 \v 1 Mpo na likambo ya Siona, \q2 nakokanga monoko na Ngai te ; \q1 mpo na likambo ya Yelusalemi, \q2 nakovanda kimia te, \q1 kino bosembo na ye emonana \q2 lokola kongenga ya pole, \q2 mpe lobiko na ye emonana lokola mwinda. \b \q1 \v 2 Bongo bikolo ekomona bosembo na yo, \q2 mpe bakonzi nyonso bakomona nkembo na yo. \q1 Bakobenga yo na kombo ya sika \q2 oyo monoko na Yawe ekopesa. \q1 \v 3 Okozala motole ya nkembo kati na loboko ya Yawe \q2 mpe ekoti ya bokonzi kati na loboko ya Nzambe na yo. \q1 \v 4 Bakobenga yo lisusu te Engumba basundola, \q2 bakobenga lisusu mokili na yo te Mokili ebeba ; \q1 kasi bakobenga yo « Esengo ya Yawe, » \q2 mpe bakobenga mokili na yo « Mwasi ya libala, » \q1 pamba te Yawe akozwa esengo kati na yo, \q2 mpe mabele na yo ekozwa mobali ya libala. \q1 \v 5 Lokola elenge mobali abalaka moseka, \q2 bana na yo ya mibali mpe bakobala yo ; \q1 lokola elenge mobali asepelaka \q2 na mobandami na ye ya mwasi, \q2 Nzambe na yo mpe akosepela na yo. \b \q1 \v 6 Oh Yelusalemi, \q2 natelemisi basenzeli na likolo ya bamir na yo ; \q1 bakovanda nye te, ezala na moyi to na butu. \q2 Bino bato oyo bosalaka ete \q1 Yawe akanisa lisusu Yelusalemi, \q2 bovanda kimia te ; \q1 \v 7 mpe botikela Ye te tango ya kopema \q2 kino tango akozongisa kimia na Yelusalemi \q2 mpe akokomisa yango mboka ya lokumu kati na mokili ! \b \q1 \v 8 Yawe atomboli loboko na Ye ya mobali, \q2 loboko na Ye ya nguya, \q1 mpe alapi ndayi : \q2 « Nakopesa lisusu ble na yo te \q1 lokola bilei epai ya banguna na yo ; \q2 bapaya bakomela lisusu te vino na yo ya sika \q2 oyo omonelaki pasi ; \q1 \v 9 kasi bato oyo bakobuka ble bakolia yango \q2 mpe bakokumisa Yawe, \q1 mpe ba-oyo bakokamola vino bakomela yango \q2 kati na lopango ya Esika na Ngai ya bule. » \b \q1 \v 10 Boleka, boleka na bikuke ! \q2 Bobongisela bato nzela, \q1 bopasola nzela, bopasola nzela ya monene ! \q2 Bolongola mabanga, \q2 botombola bendele liboso na bato ya bikolo. \b \q1 \v 11 Tala makambo oyo Yawe atatoli \q2 kino na basuka ya mabele : \q1 « Boloba na Siona, mboka kitoko : \q2 ‹ Tala, Mobikisi na yo azali koya ! \q1 Tala, lifuti na ye ezali elongo na ye, \q2 mpe azali kotambola elongo na litomba na ye. › » \q1 \v 12 Bakobenga bango Libota mosantu, \q2 basikolami na Yawe ; \q1 mpe bakobenga yo Engumba oyo alingaka, \q2 engumba oyo basundola te. \c 63 \s1 Mokolo ya kozongisa mabe na mabe mpe ya kosikolama ya Nzambe \q1 \v 1 Azali nani, ye oyo awuti na Edomi, \q2 na Botsira, na bilamba ya motane ? \q1 Azali nani, ye oyo alati bilamba ya lokumu, \q2 oyo azali kotambola lokola elombe, \q2 mpo ayebi ete azalaka makasi ? \b \q1 « Ezali nde Ngai ; nakataka makambo na bosembo, \q2 natonda na nguya mpo na kobikisa. » \b \q1 \v 2 Mpo na nini bilamba na yo ezali motane \q2 lokola bilamba ya mokamoli vino ? \b \q1 \v 3 « Nazalaki kaka ngai moko kati na ekamolelo \q2 mpo na kokamola vino, \q1 moko te kati na bato ya bikolo nyonso azalaki elongo na ngai. \q2 Nanyataki-nyataki bango na kanda na ngai \q1 mpe nakamolaki bango na kanda na ngai ya makasi ; \q2 makila na bango epumbwelaki ngai na bilamba \q2 mpe ebebisaki bilamba na ngai nyonso. \q1 \v 4 Pamba te, na motema na ngai, \q2 ezalaki nde mokolo ya kozongisa mabe na mabe, \q2 mpe mobu na ngai ya kosikola ekokaki. \q1 \v 5 Natalaki, kasi namonaki moto te oyo akosunga ; \q2 nakamwaki ete moto azalaki te \q1 mpo na kosunga ngai ! \q2 Bongo, loboko na ngai moko ebikisaki ngai, \q2 mpe kanda na ngai ya makasi esungaki ngai. \q1 \v 6 Nanyataki-nyataki bikolo na kanda na ngai, \q2 nalangwisaki bango na kanda na ngai ya makasi \q2 mpe nasopaki makila na bango na mabele. » \s1 Masanzoli mpe libondeli \q1 \v 7 Nakotatola boboto ya Yawe, \q2 nakosanzola Ye mpo na misala na Ye, \q1 kolanda nyonso oyo Yawe asalaki mpo na biso ; \q2 solo, asalelaki libota ya Isalaele makambo ebele ya kitoko \q2 kolanda boboto mpe bolingo na Ye ya monene. \b \q1 \v 8 Alobaki : « Solo, bazali bato na Ngai, \q2 bazali bana oyo bakosaka Ngai te ! » \q2 Yango wana, Yawe akomaki Mobikisi na bango. \b \q1 \v 9 Tango nyonso bazalaki na pasi, \q2 Ye mpe azalaki koyoka pasi na motema ; \q1 boye, anjelu oyo atelemaka liboso na Ye \q2 abikisaki bango ; \q1 asikolaki bango na bolingo mpe na mawa na Ye, \q2 akongolaki bango mpe azalaki komema bango \q2 mikolo nyonso ya tango ya kala. \q1 \v 10 Nzokande, wana batombokelaki Ye \q2 mpe bayokisaki Molimo Mosantu na Ye mawa, \q1 abalukelaki bango mpe akomaki monguna na bango ; \q2 mpe Ye moko akomaki kobundisa bango. \b \q1 \v 11 Boye, bato na Ye bakanisaki mikolo ya tango ya kala, \q2 mikolo ya tango ya Moyize : \q1 Wapi Ye oyo akatisaki bango ebale monene, \q2 elongo na mobateli bibwele ya etonga na Ye ? \q1 Wapi Ye oyo atiaki kati na bango \q2 Molimo Mosantu na Ye ? \q1 \v 12 Ye oyo atindaki ete loboko na Ye ya nkembo \q2 ezala elongo na loboko ya mobali ya Moyize, \q1 Ye oyo akabolaki mayi ya ebale monene liboso na bango \q2 mpo na kopesa Kombo na Ye lokumu mpo na libela ; \q1 \v 13 Ye oyo atambolisaki bango kati na mozindo ? \q2 Lokola mpunda kati na esobe, \q2 babetaki libaku te ; \q1 \v 14 lokola bibwele oyo ezali kokita na lubwaku, \q2 Molimo na Yawe apesaki bango bopemi. \q1 Ezali ndenge wana nde okambaki bato na Yo \q2 mpo na kopesa lokumu na Kombo na Yo. \b \q1 \v 15 Tala wuta na likolo mpe mona \q2 wuta na ndako na Yo ya bule mpe ya nkembo : \q1 Wapi bolingo na Yo, oyo eleka ndelo mpe nguya na Yo ? \q2 Bolingo mpe mawa na Yo mpo na biso esili ? \q1 \v 16 Nzokande, Yo nde ozali Tata na biso ; \q2 atako Abrayami ayebi biso te \q1 to Isalaele andimi biso te ; \q2 kasi Yo, Yawe, ozali Tata na biso, \q2 Kombo na Yo ezali : Mosikoli na biso ya tango nyonso. \b \q1 \v 17 Yawe, mpo na nini kotika biso koyengayenga \q2 mosika ya nzela na Yo ? \q1 Mpo na nini kokomisa mitema na biso makasi \q2 mpo ete totosa Yo te ? \q1 Zongisa motema sima mpo na bolamu ya basali na Yo, \q2 mabota ya libula na Yo ! \q1 \v 18 Bato na Yo bazwaki esika na Yo ya bule \q2 kaka mpo na mwa tango moke ; \q1 kasi sik’oyo, banguna na biso bakweyisi Ndako na Yo ya bule ! \q1 \v 19 Wuta kala, tozalaka bato na Yo ; \q2 kasi tokomi lokola bato oyo okambaka lisusu te, \q2 lokola bato oyo babengami na Kombo na Yo te. \b \q1 Oh soki okokaki kopasola likolo mpe kokita, \q2 bangomba ekoningana liboso na Yo ! \c 64 \b \b \q1 \v 2 Ndenge moto etumbaka matiti \q2 mpe etokisaka mayi na nzungu, \q1 kita mpo na kosala ete banguna na Yo \q2 bayeba Kombo na Yo \q2 mpe bikolo eningana liboso na Yo ! \q1 \v 3 Pamba te tango osalaki makambo ya somo \q2 oyo biso tozalaki kozela te, \q2 okitaki mpe bangomba eninganaki liboso na Yo. \b \q1 \v 4 Wuta na tango ya kala penza, \q2 moto moko te atikala kososola, \q1 litoyi moko te etikala koyoka, \q2 liso moko te etikala komona, \q1 ete nzambe moko, longola kaka Yo, \q2 asalaka boye mpo na bato oyo batalelaka ye. \q1 \v 5 Osungaka bato oyo bazalaka na esengo \q2 ya kosala makambo ya sembo, \q1 ba-oyo babosanaka nzela na Yo te. \q2 Kasi osilikaki tango biso tosalaki masumu ; \q2 bongo ndenge nini tokoki solo kobika ? \q1 \v 6 Biso nyonso, tokomi lokola eloko ya mbindo, \q2 misala na biso nyonso ya bosembo ezali \q1 lokola elamba ya mbindo ; \q2 biso nyonso tokawuki lokola likasa \q2 mpe masumu na biso ememi biso lokola mopepe ! \q1 \v 7 Moko te azali kobelela Kombo na Yo \q2 to kolamusa makanisi mpo na kokangama na Yo, \q1 pamba te obombeli biso elongi na Yo \q2 mpe obebisi biso likolo ya masumu na biso. \b \q1 \v 8 Nzokande oh Yawe, ozalaka Tata na biso ; \q2 biso tozali lokola mabele oyo basalelaka bikeko, \q1 bongo Yo, ozali lokola mosali mbeki ; \q2 biso nyonso tozali mosala ya maboko na Yo. \q1 \v 9 Oh Yawe, tika ete kanda na Yo eleka ndelo te ; \q2 kokanisaka masumu na biso tango nyonso te ! \q1 Tala biso ndenge tozali kobondela, \q2 pamba te biso nyonso tozali bato na Yo. \b \q1 \v 10 Bingumba na Yo ya bule ekomi esobe ; \q2 ezala Siona, yango mpe ekomi esobe ; \q2 Yelusalemi etikali lisusu na bato te ! \q1 \v 11 Tempelo na biso ya bule mpe ya lokumu \q2 epai wapi batata na biso bazalaki koyemba \q1 masanzoli mpo na lokumu na Yo, \q2 esili kozika na moto ; \q1 mpe nyonso oyo tozalaki na yango ya motuya \q2 esili kobebisama ! \q1 \v 12 Oh Yawe, sima na makambo oyo nyonso, \q2 okozongisa kaka motema na Yo sima te ? \q1 Okokanga kaka monoko \q2 mpe okopesa biso kaka etumbu oyo eleki ndelo ? \c 65 \s1 Makambo ya sika \q1 \v 1 « Namimonisaki, Ngai moko, epai ya bato \q2 oyo bazalaki kotuna Ngai kutu toli te, \q1 namilakisaki epai ya bato oyo bazalaki koluka Ngai te. \q2 Epai ya ekolo oyo ezalaki kobelela Kombo na Ngai te, \q2 nalobaki : ‹ Ngai oyo, Ngai oyo ! › \q1 \v 2 Mikolo nyonso, natandaki maboko na Ngai \q2 epai ya bato ya mito makasi, \q1 oyo balandaka nzela ya mabe, \q2 oyo batambolaka kolanda makanisi na bango ; \q1 \v 3 bato oyo bapesaka Ngai kanda tango nyonso na nko, \q2 babonzaka mbeka kati na bilanga \q1 mpe babonzaka malasi ya ansa \q2 na bitumbelo basala na babiliki ; \q1 \v 4 bato oyo bavandaka kati na bakunda \q2 mpe balekisaka babutu na bango \q1 kati na madusu ya mabanga ; \q2 bato oyo baliaka misuni ya ngulu \q2 mpe basani na bango etonda na bilei ya mbindo ; \q1 \v 5 bato oyo balobaka : ‹ Zala mosika na Ngai, \q2 kopusana pene na Ngai te, \q1 pamba te nazali bule makasi na miso na yo ! › \q2 Bato ya lolenge oyo bazali \q1 lokola milinga na zolo na Ngai, \q2 lokola moto oyo epelaka mikolo nyonso. \b \q1 \v 6 Tala, etikali ya kokomama liboso na Ngai : \q2 nakovanda nye te \q1 kino nakozongisela bango mabe na bango ; \q2 solo, nakozongisela bango penza mabe na bango koleka. \q1 \v 7 Ezala mpo na masumu na bino \q2 to mpo na masumu ya batata na bino, » elobi Yawe, \q1 « pamba te babonzaki malasi ya ansa \q2 na likolo ya bangomba milayi \q1 mpe basambwisaki Ngai na likolo ya bangomba mikuse ; \q2 solo penza, nakozongisela bango mabe, \q2 nakofuta bango kolanda misala na bango oyo eleka ! » \b \q1 \v 8 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Ndenge kaka balobaka soki bamoni \q1 liboke ya bambuma kitoko ya vino : \q2 ‹ Kobebisa te, pamba te lipamboli moko ezali wana, › \q1 ndenge mpe kaka nakosala mpo na basali na Ngai : \q2 nakoboma bango nyonso te. \q1 \v 9 Nakobimisa libota moko kati na Jakobi ; \q2 mpe kati na Yuda, \q1 nakobimisa mokitani oyo akozwa \q2 bangomba na Ngai lokola libula ; \q1 bato na Ngai, \q2 ba-oyo naponi bakokamata yango lokola libula, \q2 mpe bawumbu na Ngai nde bakovanda kuna. \q1 \v 10 Etando ya Saroni ekokoma esika ya koleisa bibwele, \q2 mpe Lubwaku ya Akori ekokoma esika ya kopema mpo na bangombe. \q1 Nyonso wana ekosalema mpo na bato na Ngai, \q2 oyo balukaka Ngai. \b \q1 \v 11 Kasi mpo na bino bato oyo bosundoli Yawe \q2 mpe bobosani ngomba na Ngai ya bule, \q1 bino oyo botandaka mesa mpo na Gadi \q2 mpe botondisaka kopo ya vino mpo na Meni, \q1 \v 12 nakobongisa bino ete bokufa na mopanga, \q2 mpe bino nyonso bokofukama mpo ete bakata bino bakingo, \q1 pamba te nabengaki, kasi boyanolaki te ; \q2 nalobaki, kasi boyokaki te : \q1 bosalaki kaka makambo mabe na miso na Ngai \q2 mpe boponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. » \b \q1 \v 13 Mpo na yango, Nkolo Yawe alobi : \q2 « Bawumbu na Ngai bakolia, \q1 kasi bino bokozala na nzala ; \q2 bawumbu na Ngai bakomela, \q1 kasi bino bokotikala kaka na posa ya komela ; \q2 bawumbu na Ngai bakosepela, \q2 kasi bino bokoyoka soni ; \q1 \v 14 bawumbu na Ngai bakoyemba na esengo, \q2 esengo oyo ekowuta solo na mitema na bango, \q1 kasi bino bokoganga mpo na pasi ya mitema na bino \q2 mpe bokolelalela mpo na milimo na bino oyo ebukani. \q1 \v 15 Bokotika kombo na bino \q2 epai ya baponami na Ngai lokola lisuma ; \q1 Nkolo Yawe akoboma bino ; \q2 kasi epai ya baponami na Ye, \q2 akopesa kombo mosusu. \q1 \v 16 Moto nyonso oyo akobelela lipamboli kati na mokili \q2 akosala bongo na Kombo ya Nzambe ya solo, \q1 mpe moto oyo akolapa ndayi kati na mokili, \q2 akolapa yango na Kombo ya Nzambe ya solo. \b \q1 Pamba te pasi ya kala ekomonana lisusu te, \q2 ekobombama na miso na Ngai. \s1 Likolo mpe mabele ya sika \q1 \v 17 Solo, nakokela likolo mpe mabele ya sika ; \q2 makambo ya liboso, bakokanisa yango lisusu te, \q2 ekomata ata lisusu na motema te. \q1 \v 18 Kasi bosepela mpe bozala tango nyonso na esengo \q2 mpo na misala oyo nakokela, \q1 pamba te nakokela Yelusalemi mpo ete ezala na esengo, \q2 mpe bato na yango basepela. \q1 \v 19 Bongo nakosepela mpo na Yelusalemi \q2 mpe mpo na bato na Ngai ; \q2 makelele ya kolela mpe ya koganga ekoyokana lisusu kuna te. \q1 \v 20 Kuna, ekozala lisusu na mwana moke te \q2 oyo akokufa na bomwana na ye \q1 to ekozala lisusu na mobange te oyo akotonda te na mikolo ya bomoi na ye ; \q2 pamba te moto oyo akokufa elenge \q1 akozala na mibu nkama moko ya mbotama, \q2 mpe oyo akokokisa mibu wana te, \q2 akomonana lokola moto alakelami mabe. \b \q1 \v 21 Bakotonga bandako \q2 mpe bakovanda kati na bandako yango, \q1 bakolona bilanga ya vino \q2 mpe bakolia bambuma na yango. \q1 \v 22 Bakotonga bandako te \q2 mpo ete bato mosusu bavanda kati na bandako yango, \q1 mpe bakolona bilanga te \q2 mpo ete bato mosusu balia bambuma na yango ; \q1 pamba te mikolo ya mbotama ya bato na Ngai ekozala \q2 lokola mikolo ya nzete, \q1 mpe baponami na Ngai bakosepela \q2 na bambuma ya misala ya maboko na bango. \q1 \v 23 Bakosala mosala na pamba te \q2 to bakobota bana te mpo ete bakufa ; \q1 pamba te bakozala bato oyo bapambolama na Yawe, \q2 bango elongo na bana na bango. \q1 \v 24 Liboso ete babelela Ngai, \q2 nakoyanola bango ; \q1 mpe wana basilisi nanu koloba te, \q2 nakoyoka bango. \q1 \v 25 Mbwa ya zamba mpe mwana meme ekolia esika moko ; \q2 mpe nkosi ekolia matiti lokola ngombe, \q1 kasi bilei ya nyoka ekozala nde putulu. \q2 Bakoyoka lisusu pasi te, \q1 mpe bakobebisama lisusu te \q2 na ngomba na Ngai ya bule, » \q2 elobi Yawe. \c 66 \s1 Etumbu mpe elikya \q1 \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Likolo ezali Kiti na Ngai ya bokonzi, \q1 mpe mabele ezali enyatelo makolo na Ngai. \q2 Ndako ya ndenge nini penza bokoki kotongela Ngai ? \q2 Esika ya bopemi ya ndenge nini penza bokoki kobongisela Ngai ? \q1 \v 2 Boni, loboko na Ngai te nde esalaki biloko oyo nyonso, \q2 mpe yango te nde ezalisaki yango nyonso ? » \q2 elobi Yawe. \b \q1 « Tala moto oyo Ngai nakotala : \q2 moto ya mawa, oyo molimo na ye etutami, \q2 mpe oyo alengaka liboso ya liloba na Ngai. \b \q1 \v 3 Moto oyo atumbi mbeka ya ngombe \q2 azali lokola ye oyo abomi moto, \q1 moto oyo atumbi mbeka ya mwana meme \q2 azali lokola ye oyo abuki kingo ya mbwa, \q1 moto oyo apesi makabo ya mbuma \q2 azali lokola ye oyo abonzi makila ya ngulu, \q1 moto oyo atumbi ekaniseli ya malasi ya ansa \q2 azali lokola ye oyo apamboli nzambe ya ekeko. \q1 Solo, baponi kolanda banzela na bango moko \q2 mpe kosepela na makambo na bango ya nkele. \q1 \v 4 Boye, Ngai mpe nakotindela bango pasi \q2 mpe nakotindela bango pasi oyo babangaka. \q1 Pamba te tango nabelelaki, \q2 moto moko te ayanolaki ; \q1 tango nalobaki, moto moko te ayokaki ; \q2 kasi basalaki makambo mabe na miso na Ngai \q2 mpe baponaki makambo oyo esepelisaka Ngai te. » \b \q1 \v 5 Boyoka Liloba na Yawe, \q2 bino bato oyo bolengaka liboso ya liloba na Ye : \q1 « Bandeko na bino oyo bayina bino \q2 mpe baboya bino likolo ya Kombo na Ngai balobi : \q1 ‹ Tika ete Yawe amonisa nkembo na Ye \q2 mpo ete tokoka komona esengo na bino ! › \q2 Kasi bango nde bakosambwa solo. \q1 \v 6 Boyoka makelele kobima longwa na engumba, \q2 boyoka makelele kobima longwa na Tempelo ! \q1 Ezali nde mongongo na Yawe \q2 oyo azali kofuta banguna na Ye \q2 kolanda oyo ekoki na misala na bango. \b \q1 \v 7 Liboso ete ayoka pasi ya kobota, abotaki ; \q2 liboso ete pasi ya kobota ekomela ye, \q2 abotaki mwana mobali. \q1 \v 8 Nani ayoka likambo ya boye ? \q2 Nani amona makambo ya boye ? \q1 Boni, mokili ekoki kobotama na mokolo moko \q2 to ekolo ekoki solo kosalema na mbala moko ? \q1 Nzokande, kaka tango Siona ayoki pasi ya kobota, \q2 tala ye wana asili kobota bana na ye. \q1 \v 9 Nakoki solo koyeisa pasi ya kobota \q2 mpe kozanga makoki ya kobotisa ? » \q2 Elobi Yawe. \q1 « Nakoki solo kokanga mabota \q2 soki nazali kopesa mabota ? » elobi Nzambe na yo. \q1 \v 10 « Bosepela elongo na Yelusalemi \q2 mpe botonda na esengo mpo na ye, \q1 bino nyonso oyo bolingaka ye ; \q2 bosepela makasi elongo na ye, \q2 bino nyonso oyo bosalelaki ye matanga. \q1 \v 11 Pamba te bokomela miliki \q2 mpe bokotonda mabele na ye, oyo ebondisaka ; \q1 bokomela penza ndenge esengeli \q2 mpe bokozwa esengo kati na bomengo na ye. » \b \q1 \v 12 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : \q2 « Nakosopela ye kimia lokola ebale, \q1 mpe bozwi ya bikolo lokola ebale na tango ya mpela ; \q2 bokobatelama, bokomemama na maboko na ye \q2 mpe akobondela bino na mabolongo na ye. \q1 \v 13 Ndenge mama abondelaka mwana na ye, \q2 ndenge wana mpe Ngai nakobondela bino ; \q2 mpe bokobondisama mpo na Yelusalemi. » \b \q1 \v 14 Tango bokomona yango, mitema na bino ekosepela \q2 mpe mikuwa na bino ekozwa makasi ya sika \q1 lokola matiti ya mobesu ; \q2 loboko na Yawe ekoyebana kati na bawumbu na Ye \q2 mpe kanda na Ye ekokitela banguna na Ye. \b \q1 \v 15 Tala, Yawe azali koya na moto, \q2 mpe bashar na Ye ezali lokola mopepe ya kayina ; \q1 akokitisa kanda na Ye na somo penza \q2 mpe akopamela na nzela ya moto. \q1 \v 16 Yawe akosambisa bato nyonso \q2 na nzela ya moto mpe ya mopanga ; \q1 bongo, bato ebele bakokufa na mopanga, \q2 na maboko na Yawe. \p \v 17 « Bato oyo bamibulisaka mpe bamipetolaka mpo na kokende na bilanga mpe kolanda moto moko oyo azali na kati-kati ya bato oyo baliaka misuni ya bangulu, ya bampuku mpe biloko mosusu ya mbindo, bakokufa bango nyonso elongo, » elobi Yawe. \p \v 18 « Mpe Ngai, likolo ya misala mpe makanisi na bango, nakomi pene ya kosangisa bato ya bikolo mpe nkota nyonso ; bongo bakoya mpo na komona nkembo na Ngai. \v 19 Nakotia elembo kati na bango mpe nakotinda, wuta na bikolo, ndambo ya bato oyo bakobika : na Tarsisi, na Puli mpe na Ludi (bato oyo bayebi kosalela tolotolo malamu), na Tubali mpe na Yavani, na bisanga oyo ezalaka mosika, oyo etikala nanu koyoka sango na Ngai te mpe komona nkembo na Ngai te. Bakotatola nkembo na Ngai kati na bikolo. \v 20 Bakomema bandeko na bino nyonso wuta na bikolo nyonso, lokola likabo epai na Yawe, na ngomba na Ngai ya bule, na Yelusalemi, na likolo ya bampunda, ya bashar mpe ya bashareti oyo ekangama, ya mikongo ya bamile mpe ya bashamo, » elobi Yawe. « Bakomema bango ndenge bana ya Isalaele bamemaka makabo na bango ya bambuma, kati na basani ya bule, na Tempelo ya Yawe. \v 21 Mpe nakopona kati na bango, ndambo ya bato mpo ete bazala Banganga-Nzambe mpe Balevi, » elobi Yawe. \p \v 22 « Ndenge likolo mpe mabele ya sika oyo nasili kosala ekowumela liboso na Ngai, » elobi Yawe, « ndenge wana mpe bakitani na bino mpe kombo na bino ekowumela. \v 23 Bato ya mokili mobimba bakoya kofukama liboso na Ngai, longwa na feti moko ya ebandeli ya sanza kino na feti mosusu, longwa na Saba moko kino na mosusu, » elobi Yawe, \v 24 « bakobima mpe bakomona bibembe ya bato oyo batombokelaki Ngai, pamba te bankusu na bango ekokufa te mpe moto na bango ekokufa te ; bakopesa moto nyonso somo. »