\id HAG Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Aje \toc1 Aje \toc2 Aje \toc3 Aj \mt1 Aje \c 1 \s1 Kobengama mpo na kotonga Tempelo ya Yawe \p \v 1 Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, na mokolo ya liboso ya sanza ya motoba, Yawe alobaki na nzela ya Mosakoli Aje liloba oyo epai ya Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; epai ya Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe : \v 2 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Bato oyo bazali koloba ete tango ekoki nanu te mpo na kotonga Tempelo ya Yawe. › » \p \v 3 Nzokande, Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje : \v 4 « Boni, bokanisi ete ezali mpo na bino tango ya kovanda na bandako ya kitoko wana Tempelo ezali ya kobeba ? » \v 5 Sik’oyo, tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo nyonso oyo ezali kokomela bino. \v 6 Bozali kolona milona ebele, kasi bozali kobuka bambuma moke kaka, bozali kolia kasi bozali kotonda te, bozali komela kasi bozali kosilisa posa na bino te, bozali kolata bilamba kasi malili ezali kosila te, mpe lifuti ya mosali ezali kokota na libenga etoboka. » \p \v 7 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Bokanisa nanu malamu makambo oyo ezali kokomela bino. \v 8 Bokende na likolo ya bangomba, bokata mpe boya na banzete mpo na kotonga Tempelo, bongo nakosepela mpe nakozwa lokumu, » elobi Yawe. \v 9 « Tala, bokanisaki kobuka bambuma ebele kasi bobuki kaka bambuma moke ; mpe tango bomemi yango na bandako na bino, nafuli yango mopepe. Mpo na nini boye, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga ? « Ezali mpo na Ndako na Ngai, oyo ezali ya kobeba, na tango oyo moto na moto azali komipesa na misala ya ndako na ye moko. \v 10 Yango wana, likolo na bino, Lola ekangi mvula, mpe mabele eboyi kobota bambuma. \v 11 Nabengaki bokawuki na bilanga, na bangomba, na ble, na vino, na mafuta, na mbuma nyonso ya mabele, na bato, na bibwele mpe na mbuma nyonso ya mosala na bino. » \p \v 12 Boye Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe bato nyonso oyo batikalaki batosaki mongongo ya Yawe, Nzambe na bango, mpe maloba ya mosakoli Aje kolanda ndenge Yawe, Nzambe na bango, atindaki ye. Mpe bato nyonso bakomaki kobanga Yawe. \v 13 Bongo Aje, momemi sango ya Yawe, asakolaki epai ya bato maloba oyo na Kombo na Yawe : « Nazali elongo na bino, » elobi Yawe. \p \v 14 Mpe Yawe alendisaki Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; mpe Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, elongo na bato nyonso oyo batikalaki. Bayaki mpe bamikotisaki na mosala ya kotonga Tempelo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe na bango, \v 15 na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya motoba, na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi. \c 2 \s1 Nkembo ya Tempelo ya sika \p \v 1 Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na moko ya sanza ya sambo : \v 2 « Loba na Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, moyangeli ya Yuda ; na Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe na bato nyonso oyo batikali : \v 3 ‹ Kati na bino oyo bozali na bomoi, nani amonaki Ndako oyo kati na nkembo na yango ya liboso ? Bongo sik’oyo, bozali komona yango ndenge nini ? Boni, ezali te komonana na miso na bino lokola eloko ya pamba ? \v 4 Kasi sik’oyo, Zorobabeli, zala makasi, › elobi Yawe. ‹ Jozue, mwana mobali ya Yeotsadaki, mokonzi ya Banganga-Nzambe, zala makasi. Bino nyonso bato ya ekolo, bozala makasi, › elobi Yawe, ‹ bosala mosala, pamba te nazali elongo na bino, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \v 5 ‹ Kolanda mokano oyo nazwaki mpo na bino tango bobimaki na Ejipito, Molimo na Ngai azali kati na bino. Bobanga te. › \p \v 6 Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Na mwa tango moke, nakoningisa lisusu Likolo mpe mokili, ebale monene mpe mabele ; \v 7 nakoningisa bato ya bikolo nyonso, bomengo ya bikolo nyonso ekoya na esika oyo, mpe nakotondisa Ndako oyo na nkembo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \v 8 ‹ Wolo mpe palata ezali ya Ngai, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. \v 9 ‹ Nkembo ya Ndako ya sika ekozala monene koleka nkembo ya Ndako ya kala, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, ‹ mpe nakotia kimia na esika oyo, › elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga. » \s1 Bosoto mpe mapamboli \p \v 10 Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, Yawe alobaki na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa : \v 11 « Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Tuna Banganga-Nzambe makambo oyo osengeli kosala kolanda mobeko : \pi1 \v 12 — Soki moto moko amemi na songe ya elamba mosuni oyo ebulisama, mpe songe yango etuti lipa to ndunda to vino to mafuta to bilei mosusu, boni, ekokoma bule ? › » \p Banganga-Nzambe bazongisaki : \pi1 — Te, ekokoma bule te ! \p \v 13 Mosakoli Aje alobaki : \pi1 — Soki moto oyo akomaki mbindo mpo ete asimbaki ebembe asimbi eloko moko kati na biloko wana, boni, eloko yango ekokoma mbindo ? \p Banganga-Nzambe bazongisaki : \pi1 — Iyo, ekokoma mbindo. \p \v 14 Mosakoli Aje alobaki lisusu : « Bato oyo mpe ekolo oyo bazali nde ndenge wana na miso na Ngai, » elobi Yawe, « misala nyonso oyo basalaka mpe biloko nyonso oyo babonzelaka Ngai ezalaka ya mbindo. \v 15 Mpe sik’oyo, kobanda lelo, botala malamu makambo oyo ekoya liboso ete libanga moko etiama na likolo ya libanga mosusu kati na Tempelo ya Yawe. \v 16 Tango moto moko azalaki koya mpo na kozwa bikolo tuku mibale ya ble na ebombelo, azalaki kokuta kaka bikolo zomi ; tango moto moko azalaki kokende na ekamolelo masanga ya vino mpo na kozwa bambeki tuku mitano ya vino, azalaki kaka kokuta bambeki tuku mibale. \v 17 Napesaki bino etumbu, tango nabebisaki misala na bino nyonso ya maboko, tango natindelaki yango bokono ya ndenge na ndenge mpe tango nanokisaki mvula ya mabanga. Kasi atako bongo, bozongaki epai na Ngai te, » elobi Yawe. \v 18 « Kobanda lelo, mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, botala malamu miboko ya Tempelo ya Yawe, oyo batiaki ; botala malamu penza makambo oyo ekoleka. \v 19 Boni, bibombelo na bino ezali lisusu na bambuma ? Kino na moyi ya lelo, ata elanga moko te ya vino, ya figi, ya grenade mpe ya olive esili kobota bambuma. \p Kasi kobanda lelo, nakopambola bino. » \p \v 20 Yawe alobaki, na mbala ya mibale, na mosakoli Aje, na mokolo ya tuku mibale na minei ya sanza ya libwa : \v 21 « Loba na Zorobabeli, moyangeli ya Yuda, ete nakoningisa likolo mpe mabele, \v 22 nakobalola bakiti ya bokonzi, nakosilisa nguya ya bokonzi ya mikili ya bapagano, nakokweyisa bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ; bampunda ekokweya elongo na bato oyo batambolaka likolo na yango, bango na bango bakobomana na mopanga. \p \v 23 Na mokolo wana, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga, « nakozwa yo Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mosali na Ngai, mpe nakokomisa yo lokola kashe na Ngai, pamba te ezali yo nde Ngai napona, » elobi Yawe, Mokonzi ya mampinga.