\id GEN Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Ebandeli \toc1 Ebandeli \toc2 Ebandeli \toc3 Ebl \mt1 Ebandeli \c 1 \s1 Ebandeli ya mokili \p \v 1 Na ebandeli, Nzambe akelaki Likolo mpe mokili. \v 2 Mokili ezalaki na lolenge te mpe ezalaki pamba. Molili ezalaki na likolo ya mozindo ; mpe Molimo ya Nzambe azalaki kopepa na likolo ya mayi. \b \p \v 3 Mpe Nzambe alobaki : « Tika ete pole ezala ! » \p Mpe pole ezalaki. \p \v 4 Nzambe amonaki ete pole ezali malamu, akabolaki pole na molili. \v 5 Nzambe abengaki pole « moyi, » mpe abengaki molili « butu. » Pokwa ezalaki mpe tongo ezalaki. Yango ezalaki mokolo moko. \b \p \v 6 Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete etando ezala kati na mayi mpo na kokabola yango ! » \p \v 7 Nzambe akelaki etando ; akabolaki mayi oyo ezalaki na se ya etando na mayi ya likolo. Yango esalemaki mpe bongo. \v 8 Nzambe abengaki etando « likolo. » Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mibale. \b \p \v 9 Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mayi oyo ezali na se ya likolo esangana esika moko mpo ete mabele ya kokawuka ebima ! » \p Yango esalemaki mpe bongo. \v 10 Nzambe abengaki mabele ya kokawuka « mokili, » mpe abengaki mayi oyo esanganaki esika moko « ebale monene. » Nzambe amonaki ete ezali malamu. \p \v 11 Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa matiti, milona oyo ezali na nkona mpe banzete ya mbuma oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko ! » \p Yango esalemaki mpe bongo. \v 12 Mabele ebimisaki matiti, milona oyo ebotaka nkona kolanda lolenge ya molona moko na moko mpe banzete oyo ebotaka mbuma kolanda lolenge ya nzete moko na moko. Nzambe amonaki ete ezali malamu. \v 13 Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya misato. \b \p \v 14 Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete biloko oyo ebimisaka pole ezala na etando ya likolo mpo na kokabola moyi wuta na butu, mpo na kozala bilembo oyo ekolakisa bileko, mikolo mpe mibu, \v 15 mpe mpo na kongengisa mokili ! » \p Yango esalemaki mpe bongo. \v 16 Nzambe akelaki biloko mibale ya minene oyo ebimisaka pole : oyo eleki monene, mpo na kongenga na moyi ; mpe oyo ya moke, mpo na kongenga na butu. Mpe akelaki lisusu minzoto. \v 17 Nzambe atiaki yango na etando ya likolo mpo ete engengisa mokili, \v 18 engenga na moyi mpe na butu, mpe ekabola pole na molili. Nzambe amonaki ete ezali malamu. \v 19 Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya minei. \b \p \v 20 Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete bikelamu ya bomoi etonda kati na mayi, mpe bandeke epumbwa na mokili na etando ya likolo ! » \p \v 21 Nzambe akelaki banyama minene ya mayi mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo etambolaka kati na mayi mpe etondi meke kati na mayi : ekelamu na ekelamu na lolenge na yango. Akelaki mpe bandeke nyonso ya mapapu : ndeke na ndeke na lolenge na yango. Nzambe amonaki ete ezali malamu. \v 22 Nzambe apambolaki yango mpe alobaki : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mayi ya bibale, mpe tika ete bandeke ekoma ebele kati na mokili. » \p \v 23 Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya mitano. \b \p \v 24 Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete mokili ebimisa bikelamu ya bomoi kolanda lolenge na yango : bibwele, bikelamu oyo etambolaka na libumu, banyama ya mike-mike mpe banyama ya zamba ! » \p Yango esalemaki mpe bongo. \v 25 Nzambe akelaki banyama ya zamba kolanda lolenge na yango : bibwele mpe bikelamu nyonso ya mike-mike. Nzambe amonaki ete ezali malamu. \p \v 26 Bongo Nzambe alobaki : « Tika ete tosala bato na elilingi na biso, na lolenge oyo biso tozali, mpo ete bakonza bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, bibwele kati na mokili mobimba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe banyama ya mike-mike ! » \q1 \v 27 Nzambe akelaki bato na elilingi na Ye, \q2 akelaki bango na elilingi ya Nzambe ; \q2 akelaki bango mobali mpe mwasi. \p \v 28 Nzambe apambolaki bango mpe alobaki na bango : « Bobotana, bokoma ebele, botondisa mokili mpe bobongola yango. Bokonza bambisi ya bibale, bandeke ya likolo, bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe banyama nyonso ya mike-mike. » \p \v 29 Bongo Nzambe alobaki : « Tala, kati na mokili mobimba, napesi bino milona oyo ezali na nkona mpe banzete nyonso oyo ebotaka mbuma. Yango nde ekozala bilei na bino. \v 30 Napesi matiti nyonso ya mobesu lokola bilei epai ya banyama nyonso ya mokili, epai ya bandeke nyonso ya likolo, epai ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpe epai ya bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi. » \p Yango esalemaki mpe bongo. \p \v 31 Nzambe atalaki biloko nyonso oyo akelaki mpe amonaki ete ezali malamu koleka. Pokwa ezalaki, tongo mpe ezalaki. Yango ezalaki mokolo ya motoba. \b \c 2 \p \v 1 Ezalaki bongo nde likolo mpe mokili ekelamaki elongo na biloko nyonso oyo ezali kati na yango. \b \p \v 2 Na mokolo ya sambo, Nzambe asilisaki mosala oyo asalaki. Boye, na mokolo ya sambo, akataki mosala nyonso oyo azalaki kosala. \v 3 Nzambe apambolaki mokolo ya sambo, abulisaki yango, pamba te na mokolo yango nde akataki mosala nyonso ya kokela oyo azalaki kosala. \ms1 Lisolo ya Edeni \s1 Adamu mpe Eva \p \v 4 Tala ndenge likolo mpe mokili elongo na biloko oyo ezali kati na yango ezalaki tango ekelamaki. \b \p Tango Yawe Nzambe akelaki mokili mpe likolo, \v 5 ata nzete moko te ya elanga ezalaki, mpe ata molona moko te ya elanga etikalaki kobimisa moto, pamba te Yawe Nzambe anokisaki nanu mvula te na mokili, mpe moto azalaki te mpo na kolona yango na mabele. \v 6 Kasi mayi ezalaki kobima wuta na se mpe ezalaki kopanzana na etando nyonso ya mokili. \p \v 7 Yawe Nzambe asalaki moto wuta na putulu ya mabele, afulaki pema ya bomoi na madusu ya zolo na ye ; mpe moto akomaki ekelamu ya bomoi. \v 8 Yawe Nzambe alonaki elanga moko kati na Edeni, na ngambo ya este. Atiaki moto oyo akelaki kati na yango. \v 9 Yawe Nzambe abimisaki wuta na mabele banzete ya lolenge nyonso oyo ezalaki kitoko mpo na kotala mpe elengi mpo na kolia. Atiaki mpe nzete ya bomoi na kati-kati ya elanga ; lisusu atiaki nzete ya koyeba malamu mpe mabe. \p \v 10 Ebale moko ezalaki kobima na Edeni mpe ezalaki kosopa mayi na elanga. Mayi ya ebale yango ekabwanaki na biteni minei. \v 11 Eteni ya liboso, kombo na yango « Pishoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Avila oyo mabele na yango ezalaki na wolo. \v 12 Wolo ya mokili yango ezalaki kitoko. Ezalaki lisusu na molona ya malasi mpe na mabanga ya onikisi kati na mokili yango. \v 13 Eteni ya mibale, kombo na yango « Giyoni. » Yango ezingeli mokili mobimba ya Kushi. \v 14 Eteni ya misato, kombo na yango « Tigre. » Yango elekana na este ya Asiri. Mpe eteni ya minei, kombo na yango « Efrate. » \p \v 15 Yawe Nzambe azwaki moto mpe atiaki ye kati na elanga ya Edeni mpo na kolona yango mpe kobatela yango. \v 16 Mpe Yawe Nzambe apesaki mitindo oyo na moto : « Okoki kolia mbuma nyonso ya elanga, \v 17 kasi okolia te mbuma ya nzete ya koyeba malamu mpe mabe ; pamba te mokolo oyo okolia yango, okokufa solo. » \p \v 18 Yawe Nzambe alobaki : « Ezali malamu te ete mobali azala ye moko ; nakosalela ye mosungi oyo azali ndenge moko na ye. » \p \v 19 Yawe Nzambe asalaki, wuta na mabele, banyama nyonso ya zamba mpe bandeke nyonso ya likolo. Amemaki yango epai ya mobali mpo na kotala ndenge akopesa yango kombo, mpo ete ekelamu nyonso ya bomoi ebengama na kombo oyo mobali akopesa yango. \v 20 Yango wana, mobali apesaki bakombo na bibwele nyonso, na bandeke nyonso ya likolo mpe na banyama nyonso ya zamba. Kasi amonaki te mosungi oyo akokaki kozala ndenge moko na ye. \v 21 Na yango, Yawe Nzambe alalisaki mobali pongi ya makasi. Mpe wana mobali azalaki kolala, Yawe Nzambe azwaki mokuwa moko na mopanzi ya mobali mpe azipaki mosuni na esika yango. \v 22 Yawe Nzambe asalaki mwasi na mokuwa oyo azwaki na mopanzi ya mobali mpe amemaki ye epai ya mobali. \p \v 23 Boye, mobali alobaki : \q1 « Tala na mbala oyo, \q2 oyo azali mokuwa ya mikuwa na ngai, \q2 mosuni ya mosuni na ngai. \q1 Bakobenga ye mwasi, \q2 pamba te awuti na mobali. » \m \v 24 Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, akosangana na mwasi na ye, mpe bakokoma nzoto moko. \p \v 25 Mobali mpe mwasi na ye bazalaki bolumbu mpe bazalaki koyokana soni te. \c 3 \s1 Kokweya ya Adamu mpe Eva \p \v 1 Nzokande, kati na banyama nyonso ya zamba oyo Yawe Nzambe akelaki, nyoka nde elekaki na mayele mabe. Alobaki na mwasi : \pi1 — Nzambe alobaki na bino solo ete bolia mbuma ata moko te ya banzete ya elanga ? \p \v 2 Mwasi azongisaki epai ya nyoka : \pi1 — Toliaka bambuma ya banzete ya elanga. \v 3 Kasi na oyo etali mbuma ya nzete oyo ezali na kati-kati ya elanga, Nzambe alobaki : « Bosengeli te kolia yango, mpe bosengeli te kosimba yango ; noki te bokokufa. » \p \v 4 Nyoka alobaki na mwasi : \pi1 — Solo penza, bokokufa te. \v 5 Pamba te Nzambe ayebi malamu ete mokolo oyo bokolia yango, miso na bino ekofungwama mpe bokokoma lokola Ye\f + \fr 3.5 \fr*\ft Lolenge mosusu ya kobongola elobi : bokokoma lokola banzambe.\ft*\f* : koyeba malamu na mabe. \p \v 6 Mwasi amonaki ete mbuma ya nzete ezali elengi mpo na kolia, kitoko mpo na kotala mpe malamu mpo na kofungola mayele. Boye azwaki mbuma mpe aliaki yango. Apesaki yango mpe na mobali na ye, oyo azalaki elongo na ye ; bongo ye mpe mobali aliaki yango. \v 7 Mbala moko, miso na bango mibale efungwamaki, mpe basosolaki ete bazali bolumbu. Boye, basangisaki makasa ya nzete ya figi mpe bamizipaki. \p \v 8 Na pokwa, bayokaki makelele ya matambe ya Yawe Nzambe kotambola kati na elanga. Boye, mobali mpe mwasi babombamaki kati na banzete ya elanga mpo na kokima Yawe. \v 9 Kasi Yawe Nzambe abengaki mobali mpe atunaki ye : \pi1 — Ozali wapi ? \p \v 10 Azongisaki : \pi1 — Nayoki makelele ya matambe na Yo kotambola kati na elanga mpe nabangi mpo ete nazali bolumbu ; yango wana nabombami. \p \v 11 Nzambe alobaki : \pi1 — Ndenge nini oyebi ete ozali bolumbu ? Boni, oliaki mbuma ya nzete oyo napekisaki yo kolia ? \p \v 12 Adamu azongisaki : \pi1 — Ezali mwasi oyo opesaki ngai lokola mosungi nde apesaki ngai mbuma ya nzete yango, mpe nalie yango. \p \v 13 Yawe Nzambe alobaki na mwasi : \pi1 — Mpo nini osali bongo ? \p Mwasi azongisaki : \pi1 — Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango. \p \v 14 Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo, \q1 olakelami mabe kati na bibwele \q2 mpe banyama nyonso ya zamba. \q1 Okotambola na libumu \q2 mpe okobanda kolia putulu \q2 bomoi na yo mobimba. \q1 \v 15 Nakotia koyinana kati na yo mpe mwasi, \q2 mpe kati na bakitani na yo mpe bakitani na ye. \q1 Bakitani ya mwasi bakonyata moto na yo, \q2 mpe yo okoswa bango na litindi. » \p \v 16 Nzambe alobaki na mwasi : \q1 « Nakobakisa pasi na zemi na yo ; \q2 okobota na pasi. \q1 Posa na yo ekomema yo epai ya mobali na yo, \q2 kasi ye akozala mokonzi na yo. » \p \v 17 Yawe Nzambe alobaki na Adamu : « Lokola oyokelaki mwasi na yo mpe oliaki mbuma ya nzete oyo, na tina na yango, napesaki yo mobeko oyo : ‹ Kolia yango te, › \q1 mabele elakelami mabe likolo na yo. \q2 Bomoi na yo mobimba, okolia na motoki na yo. \q1 \v 18 Mabele ekobotela yo nzube mpe nzete ya sende. \q2 Okolia matiti ya bilanga. \q1 \v 19 Okolia lipa na yo na motoki ya elongi na yo \q2 kino okozonga na mabele epai wapi owutaki, \q2 pamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu. » \p \v 20 Mobali apesaki mwasi na ye kombo « Eva\f + \fr 3.20 \fr*\ft Eva elakisi : bomoi.\ft*\f*, » pamba te azali mama ya bato nyonso na mokili. \p \v 21 Yawe Nzambe asalelaki Adamu mpe mwasi na ye bilamba ya poso ya nyama mpe alatisaki bango yango. \p \v 22 Yawe Nzambe alobaki : « Tala, moto akomi lokola moko kati na biso mpo na koyeba malamu mpe mabe. Sik’oyo, esengeli te kopesa ye nzela ya kotia loboko na ye mpo na kozwa lisusu mbuma ya nzete ya bomoi mpe kolia yango, noki te awumela libela na bomoi. » \p \v 23 Boye, Yawe Nzambe abenganaki ye na elanga ya Edeni mpo ete asala mosala ya mabele epai wapi awutaki. \p \v 24 Sima na kobengana moto, atiaki basheribe, na ngambo ya este ya elanga ya Edeni, na mopanga ya moto oyo ezalaki kobaluka bipai na bipai mpo na kobatela nzela ya nzete ya bomoi. \c 4 \s1 Kayina mpe Abele \p \v 1 Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. » \p \v 2 Sima na yango, abotaki lisusu Abele, ndeko ya Kayina. Abele akomaki kobokola bibwele mpe Kayina akomaki kosala bilanga. \p \v 3 Sima na mwa tango, Kayina amemaki mbuma ya mabele mpo na kobonzela Yawe. \v 4 Abele, ye mpe amemaki bibwele oyo ebotamaki liboso kati na etonga na ye mpe biteni oyo eleki mafuta. Yawe asepelaki na Abele mpe na makabo na ye, \v 5 kasi asepelaki te na Kayina mpe na makabo na ye. Bongo, Kayina asilikaki makasi mpe elongi na ye ekomaki mawa-mawa. \p \v 6 Yawe alobaki na Kayina : \pi1 — Mpo na nini osiliki ? Mpo na nini elongi na yo ekomi mawa-mawa ? \v 7 Boni, soki osali malamu, bakondima yo te ? Kasi soki osali malamu te, lisumu elali penza na ekuke na yo, mpe posa na yango ezali kobenda yo makasi ; kasi yo, longa yango. \p \v 8 Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye. \p \v 9 Yawe atunaki Kayina : \pi1 — Wapi ndeko na yo Abele ? \p Kayina azongisaki : \pi1 — Nayebi te. Boni, ngai nazali mokengeli ya ndeko na ngai ? \p \v 10 Nzambe alobaki : \pi1 — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai. \v 11 Sik’oyo, olakelami mabe mpe obwakami mosika ya mabele oyo efungolaki monoko na yango mpo na komela makila ya ndeko na yo, oyo maboko na yo esopaki. \v 12 Tango okobalola mabele, ekobotela yo mbuma te. Okozala koyengayenga mpe kotelengana na mokili. \p \v 13 Kayina alobaki na Yawe : \pi1 — Etumbu na ngai eleki pasi mpo na komema ! \v 14 Tala, obwaki ngai lelo mosika ya mabele ; nasengeli sik’oyo kobombama liboso na Yo, nakokoma koyengayenga mpe kotelengana na mokili, mpe moto nyonso oyo akomona ngai akoboma ngai. \p \v 15 Kasi Yawe alobaki na ye : \pi1 — Ezali bongo te ! Soki moto abomi Kayina, bakozongisa mabe mpo na Kayina mbala sambo. \p Mpe Yawe atiaki elembo na nzoto ya Kayina na tina ete moto oyo akokutana na ye aboma ye te. \p \v 16 Kayina alongwaki liboso ya Yawe, akendeki kovanda na mokili ya Nodi\f + \fr 4.16 \fr*\ft Nodi elakisi : mboka ya koyengayenga.\ft*\f*, na este ya Edeni. \s1 Libota ya Kayina \p \v 17 Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye ; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali. \p \v 18 Enoki abotaki Iradi ; Iradi abotaki Mewuyayeli ; Mewuyayeli abotaki Metusaeli ; Metusaeli abotaki Lemeki. \p \v 19 Lemeki abalaki basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Ada, » mpe mosusu, « Tsila. » \v 20 Ada abotaki Yabali, koko ya bavandi ya bandako ya kapo mpe ya babokoli bibwele. \v 21 Ndeko na ye ya mobali, Yubali, azalaki koko ya bato oyo babetaka lindanda mpe flite. \v 22 Tsila mpe abotaki mwana mobali, Tubali-Kayina, oyo azalaki kosala bisalelo nyonso ya bronze mpe ya bibende. Tubali-Kayina azalaki na ndeko mwasi, kombo na ye ezalaki « Naama. » \p \v 23 Lemeki alobaki na basi na ye : \q1 « Ada mpe Tsila, boyoka ngai malamu ; \q2 bino basi ya Lemeki, bolanda ngai malamu : \q1 Solo, likolo ya pota moko, ngai nabomaki moto ; \q2 mpe likolo ya mwa pota, nabomaki elenge mobali ! \q1 \v 24 Solo, bakozongisa mbala sambo \q2 mabe oyo basali Kayina ; \q1 kasi mpo na Lemeki, \q2 ekozala mbala tuku sambo na sambo ! » \s1 Libota mosusu ya Adamu \p \v 25 Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. » \v 26 Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » \p Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe. \c 5 \p \v 1 Tala lisolo ya libota ya Adamu. \b \p Tango Nzambe akelaki bato, asalaki bango na elilingi ya Nzambe. \v 2 Akelaki bango mobali mpe mwasi, mpe apambolaki bango. Na mokolo oyo akelaki bango, apesaki bango kombo « bato. » \b \li1 \v 3 Tango Adamu akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama, abotaki mwana mobali na elilingi na ye mpe na lolenge na ye. Apesaki ye kombo « Seti. » \v 4 Sima na mbotama ya Seti, Adamu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \v 5 Mibu nyonso oyo Adamu awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku misato, sima akufaki. \li1 \v 6 Tango Seti akokisaki mibu nkama moko na mitano ya mbotama, abotaki Enoshi. \v 7 Sima na kobota Enoshi, Seti awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \v 8 Mibu nyonso oyo Seti awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi na mibale, sima akufaki. \li1 \v 9 Tango Enoshi akokisaki mibu tuku libwa ya mbotama, abotaki Kena. \v 10 Sima na kobota Kena, Enoshi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na zomi na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \v 11 Mibu nyonso oyo Enoshi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na mitano, sima akufaki. \li1 \v 12 Tango Kena akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Maalalele. \v 13 Sima na kobota Maalalele, Kena awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku minei mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \v 14 Mibu nyonso oyo Kena awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na zomi, sima akufaki. \li1 \v 15 Tango Maalalele akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Yeredi. \v 16 Sima na kobota Yeredi, Maalalele awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \v 17 Mibu nyonso oyo Maalalele awumelaki na bomoi ezalaki nkama mwambe na tuku libwa na mitano, sima akufaki. \li1 \v 18 Tango Yeredi akokisaki mibu nkama moko na tuku motoba na mibale ya mbotama, abotaki Enoki. \v 19 Sima na kobota Enoki, Yeredi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mwambe mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \v 20 Mibu nyonso oyo Yeredi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na mibale, sima akufaki. \li1 \v 21 Tango Enoki akokisaki mibu tuku motoba na mitano ya mbotama, abotaki Metusalemi. \v 22 Sima na kobota Metusalemi, Enoki azalaki kosala mokano ya Nzambe mibu nkama misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \v 23 Mibu nyonso oyo Enoki awumelaki na bomoi ezalaki nkama misato na tuku motoba na mitano. \v 24 Enoki atambolaki na boyengebene elongo na Nzambe ; bongo alimwaki, pamba te Nzambe azwaki ye. \li1 \v 25 Tango Metusalemi akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na sambo ya mbotama, abotaki Lemeki. \v 26 Sima na kobota Lemeki, Metusalemi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama sambo na tuku mwambe na mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \v 27 Mibu nyonso oyo Metusalemi awumelaki na bomoi ezalaki nkama libwa na tuku motoba na libwa, sima akufaki. \li1 \v 28 Tango Lemeki akokisaki mibu nkama moko na tuku mwambe na mibale ya mbotama, abotaki mwana mobali. \v 29 Abengaki ye Noa mpe alobaki : « Ye oyo akobondisa biso na mosala mpe na pasi ya maboko na biso likolo ya mabele oyo Yawe alakelaki mabe. » \v 30 Sima na kobotama ya Noa, Lemeki awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mitano na tuku libwa na mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \v 31 Mibu nyonso oyo Lemeki awumelaki na bomoi ezalaki nkama sambo na tuku sambo na sambo, sima akufaki. \li1 \v 32 Tango Noa akokisaki mibu nkama mitano ya mbotama, abotaki Semi, Cham mpe Jafeti. \c 6 \ms1 Libota ya Noa \s1 Mabe kati na mokili \p \v 1 Tango bato babandaki kokoma ebele na mokili mpe babotaki bana basi, \v 2 milimo emonaki ete bana basi ya bato bazali kitoko ; boye ekomisaki ba-oyo eponaki basi na yango. \v 3 Yango wana, Yawe alobaki : « Pema na Ngai ekowumela libela te kati na moto, pamba te abengami na kokufa ; mibu ya bomoi na ye ekozala kaka nkama moko na tuku mibale. » \p \v 4 Na tango wana, ezalaki na bingambe kati na mokili ; mpe lisusu, milimo esangisaki nzoto na bana basi ya bato, bongo bana basi babotelaki yango bana. Bana yango bazalaki bilombe na tango ya kala, bato oyo bakenda sango. \p \v 5 Yawe amonaki ndenge nini mabe ya moto ekomaki mingi kati na mokili, mpe tango nyonso, makanisi ya motema ya moto ezalaki kaka mabe. \v 6 Boye Yawe ayokaki mawa na ndenge akelaki moto kati na mokili mpe abongolaki makanisi na Ye. \v 7 Boye Yawe alobaki : « Nakosilisa koboma kati na mokili bato oyo nakelaki ; solo, nakosilisa koboma bato kino na bibwele, na bandeke ya likolo mpe na bikelamu oyo etambolaka na libumu kati na mokili, pamba te nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakelaki bango. » \v 8 Kasi Noa azwaki ngolu na miso ya Yawe. \s1 Noa mpe bana na ye \p \v 9 Tala lisolo ya libota ya Noa. \b \p Noa azalaki moto ya sembo mpe azanga pamela kati na bato ya tango na ye ; azalaki kosala mokano ya Nzambe. \v 10 Noa azalaki na bana mibali misato : Semi, Cham mpe Jafeti. \s1 Nzambe akani kobikisa Noa \p \v 11 Mokili ebebaki na miso ya Nzambe mpe etondaki na makambo ya mobulu. \v 12 Nzambe amonaki ndenge mokili ebebaki, pamba te bato nyonso ya mokili babebisaki banzela na bango. \p \v 13 Boye, Nzambe alobaki na Noa : « Nazwi mokano ya koboma bikelamu nyonso ya bomoi, pamba te mokili etondi na mabe likolo na bango. Solo, nakobebisa bango elongo na mokili. \v 14 Sala masuwa ya mabaya ya goferi mpo na lobiko na yo ; kabola yango na bashambre. Okopakola gudron na kati mpe na libanda na yango. \v 15 Tala ndenge okotonga yango : molayi na yango ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mitano, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda. \v 16 Okotia likolo na yango lidusu ya basantimetele pene tuku mitano, okotia ekuke na mopanzi na yango ; mpe na kati, okosala etaje ya liboso, ya mibale mpe ya misato. \v 17 Nakotinda mpela na mokili mpo na koboma nyonso oyo ezali na bomoi na se na moyi : ekelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mabele ekokufa. \v 18 Kasi nasali boyokani elongo na yo, yango wana okokota na masuwa : yo, bana na yo ya mibali, mwasi na yo mpe basi ya bana na yo. \v 19 Okokotisa mpe kati na masuwa, mibale-mibale, bikelamu nyonso ya bomoi, mwasi mpe mobali, mpo ete obatela yango na bomoi elongo na yo. \v 20 Bikelamu mibale ya lolenge moko na moko ya bandeke, ya bibwele mpe ya bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu ; nyonso ekoya epai na yo mpo ete obatela yango na bomoi. \v 21 Okozwa biloko ya kolia ya lolenge na lolenge mpe okobomba yango mpo ete ezala bilei na yo elongo na yango. » \p \v 22 Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Nzambe atindaki ye. \c 7 \s1 Noa akoti na masuwa \p \v 1 Yawe alobaki na Noa : « Kota na masuwa, yo mpe libota na yo mobimba, pamba te yo kaka nde omonani sembo na miso na Ngai kati na bato ya ekeke oyo. \v 2 Kamata banyama sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na banyama ya lolenge nyonso oyo ezangi mbindo ; mpe nyama moko ya mobali mpe moko ya mwasi kati na banyama oyo ezali mbindo. \v 3 Kamata lisusu bandeke sambo ya mibali mpe sambo ya basi kati na lolenge nyonso ya bandeke mpo ete esila te kati na mokili. \v 4 Pamba te etikali mikolo sambo mpo ete nanokisa mvula oyo ekowumela mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei mpe nakosilisa koboma bikelamu nyonso oyo nasala kati na mokili oyo. » \p \v 5 Bongo, Noa asalaki makambo nyonso ndenge kaka Yawe atindaki ye. \p \v 6 Noa azalaki na mibu nkama motoba ya mbotama tango mpela eyaki na mokili. \v 7 Noa mpe bana na ye ya mibali elongo na mwasi na ye mpe basi ya bana na ye bakotaki na masuwa mpo ete babika na mpela. \v 8 Kati na banyama ya lolenge nyonso, moko ya mobali mpe moko ya mwasi, ezala oyo ezanga mbindo to oyo ezali mbindo, bandeke mpe banyama oyo etambolaka na libumu \v 9 eyaki epai na Noa mpe ekotaki na masuwa, mwasi na mobali, ndenge Nzambe atindaki Noa. \v 10 Bongo sima na mikolo sambo, mpela eyaki na mokili. \s1 Mpela eyei na mokili \p \v 11 Tango Noa akokisaki mibu nkama motoba ya mbotama, na sanza ya mibale, na mokolo ya zomi na sambo, bitima nyonso ya se mpe maninisa nyonso ya likolo efungwamaki. \v 12 Mvula enokaki na mokili mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei. \p \v 13 Kaka na mokolo wana, Noa mpe bana na ye ya mibali : Semi, Cham mpe Jafeti, elongo na mwasi na ye mpe basi misato ya bana na ye, bakotaki na masuwa. \v 14 Elongo na bango, ekotaki mpe banyama ya zamba ya lolenge nyonso, bibwele ya lolenge nyonso, bikelamu ya lolenge nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke ya lolenge nyonso mpe bikelamu nyonso oyo ezali na mapapu. \v 15 Mwasi na mobali, kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, eyaki epai ya Noa mpo na kokota na masuwa. \v 16 Banyama nyonso oyo ekotaki kuna ezalaki mwasi na mobali kati na bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi, ndenge Nzambe atindaki Noa. Sima, Yawe akangaki ekuke ya masuwa. \p \v 17 Mpela ewumelaki na mokili mikolo tuku minei ; mayi ekomaki ebele mpe etombolaki masuwa likolo na yango. \v 18 Mayi emataki mpe ekomaki ebele, bongo masuwa ekomaki kotepatepa likolo ya mayi. \v 19 Mayi emataki lisusu makasi mpe bangomba nyonso ya milayi oyo ezalaki na mokili ezindaki na se ya mayi. \v 20 Mayi emataki lisusu likolo ya bangomba na bosanda ya bametele pene sambo to mwambe. \v 21 Bikelamu nyonso ya bomoi kati na mokili ekufaki, ezala bandeke, bibwele, banyama ya zamba to mpe banyama ya mike-mike oyo etambolaka na mabele to mpe bato nyonso. \v 22 Nyonso oyo ezalaki na pema ya bomoi ekufaki kati na mokili. \v 23 Boye, Yawe alongolaki kati na mokili bikelamu nyonso oyo ezalaki na bomoi, kobanda na moto kino na ebwele, ekelamu oyo etambolaka na libumu mpe ndeke ya likolo ; alongolaki bango na mokili mpe etikalaki kaka Noa na ba-oyo bazalaki na ye elongo na masuwa. \p \v 24 Mayi etondaki na mokili mikolo nkama moko na tuku mitano. \c 8 \s1 Mpela esili \p \v 1 Nzambe akanisaki Noa mpe banyama nyonso oyo ezalaki elongo na ye kati na masuwa, atindaki mopepe na mokili mpe mayi ekitaki. \v 2 Bitima ya se mpe maninisa ya likolo ekangamaki mpe mvula etikaki konoka. \v 3 Mayi ekomaki kolongwa moke-moke likolo ya mabele, mpe sima na mikolo nkama moko na tuku mitano, mayi ekitaki. \p \v 4 Na mokolo ya zomi na sambo ya sanza ya sambo, masuwa esemaki likolo ya bangomba Ararati. \v 5 Mayi ezalaki kokoba kokita kino na sanza ya zomi. Na mokolo ya liboso ya sanza yango, basonge ya bangomba emonanaki. \p \v 6 Sima na mikolo tuku minei, Noa afungolaki lininisa ya masuwa oyo asalaki \v 7 mpe abimisaki yanganga. Yanganga yango ezalaki kokende mpe kozonga kino tango mayi ekawukaki na mokili. \v 8 Mpe lisusu, Noa abimisaki ebenga mpo na kotala soki mayi ekawuki na mokili. \v 9 Kasi ebenga ezwaki esika ya kotia matambe na yango te, pamba te mayi ezalaki na etando nyonso ya mokili. Boye, ezongaki na masuwa epai ya Noa. Noa abimisaki loboko, azwaki ebenga mpe akotisaki yango kati na masuwa. \v 10 Azelaki mikolo sambo mpe abimisaki lisusu ebenga libanda ya masuwa. \v 11 Tango ebenga ezongaki epai na ye na pokwa, ememaki lokasa ya olive ya mobesu na monoko na yango. Boye, Noa asosolaki ete mayi ekiti na mokili. \v 12 Azelaki lisusu mikolo sambo mosusu, mpe abimisaki ebenga. Kasi ebenga ezongaki lisusu te. \p \v 13 Na mokolo ya liboso na sanza ya liboso, tango Noa akokisaki mibu nkama motoba na moko ya mbotama, mayi ekawukaki na mokili ; Noa afungolaki masuwa na likolo na yango mpe amonaki ete mabele ekawuki. \v 14 Na mokolo ya tuku mibale na sambo ya sanza ya mibale, mabele ekawukaki penza. \p \v 15 Boye, Nzambe alobaki na Noa : \v 16 « Bima na masuwa elongo na mwasi na yo, mpe bana na yo ya mibali elongo na basi na bango. \v 17 Bimisa mpe bikelamu oyo ezali elongo na yo : bandeke, banyama mpe bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu, mpo ete ebotana mpe ekoma ebele kati na mokili. » \p \v 18 Boye, Noa abimaki libanda elongo na bana na ye ya mibali, mwasi na ye mpe basi ya bana na ye. \v 19 Banyama nyonso, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bandeke nyonso, bikelamu nyonso oyo etambolaka na mokili, ebimaki na masuwa na molongo kolanda lolenge na yango. \p \v 20 Noa atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe azwaki ndambo ya banyama mpe bandeke ezanga mbindo, abonzelaki yango Yawe lokola mbeka ya kotumba. \v 21 Boye, Yawe ayokaki solo kitoko mpe amilobelaki : « Nakolakela lisusu mabele mabe te likolo ya moto, pamba te wuta bomwana ya moto, motema ya moto elukaka kaka makambo mabe ; nakoboma lisusu te bikelamu nyonso ya bomoi ndenge nawuti kosala. \q1 \v 22 Na tango nyonso oyo mokili ekozala, \q1 tango ya kolona mpe tango ya kobuka, \q1 tango ya malili mpe tango ya molunge, \q1 tango ya mvula mpe tango ya elanga, \q1 tango ya moyi mpe tango ya butu, \q1 ekozanga te. » \c 9 \s1 Boyokani ya Nzambe elongo na Noa \p \v 1 Nzambe apambolaki Noa mpe bana na ye ya mibali. Alobaki na bango : « Bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. \v 2 Banyama nyonso ya mokili, bandeke nyonso ya likolo mpe bikelamu oyo etambolaka na mokili elongo na mbisi ya ebale, ekobanga bino makasi ; nyonso epesami na maboko na bino. \v 3 Bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi mpe oyo etambolaka, ekozala bilei na bino. Ndenge kaka napesaki bino matiti, sik’oyo napesi bino biloko nyonso. \v 4 Kasi bokolia te mosuni oyo ezali na makila, pamba te makila ezali bomoi. \v 5 Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye. \v 6 Yango wana, soki moto asopi makila ya moto, bakosopa mpe makila na ye epai ya moto, pamba te Nzambe asalaki moto na elilingi na Ye. \v 7 Kasi bino, bobota bana, bokoma ebele mpe botondisa mokili. » \p \v 8 Boye, Nzambe alobaki na Noa mpe na bana na ye ya mibali : \v 9 « Nasali sik’oyo boyokani elongo na yo mpe na bakitani na yo sima na yo, \v 10 na bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali elongo na yo : bandeke, bibwele mpe banyama ya zamba, banyama nyonso oyo ebimaki na masuwa elongo na yo, bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. \v 11 Nasali boyokani elongo na yo : bikelamu nyonso oyo ezali na bomoi ekobebisama te na mayi ya mpela. Mpe mpela ekozala lisusu te mpo na kobebisa mokili. » \p \v 12 Nzambe alobaki lisusu : « Tala elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bino, mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na bino elongo. Ezali boyokani mpo na milongo nyonso oyo ekoya : \v 13 natie monama na Ngai na mapata, mpe yango ekozala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe mokili. \v 14 Tango nyonso nakosangisa mapata na likolo ya mokili mpe monama ekobima na mapata, \v 15 nakokanisa boyokani na Ngai elongo na bino mpe na bikelamu ya lolenge nyonso oyo ezali na bomoi. Mpe mayi ekokoma lisusu mpela te mpo na kobebisa nyonso oyo ezali na bomoi. \v 16 Tango nyonso monama ekobima na mapata, nakomona yango mpe nakokanisa boyokani ya seko kati na Nzambe mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali na mokili. » \p \v 17 Nzambe alobaki lisusu na Noa : « Yango nde ezali elembo ya boyokani oyo natie kati na Ngai mpe bikelamu nyonso ya bomoi oyo ezali kati na mokili. » \s1 Bana mibali ya Noa \p \v 18 Tala bana mibali ya Noa oyo babimaki na masuwa : Semi, Cham mpe Jafeti. Cham azalaki tata ya Kanana. \v 19 Bango misato bazalaki bana ya Noa mpe na nzela na bango nde mokili etondaki lisusu na bato. \p \v 20 Noa azalaki mosali bilanga mpe alonaki elanga ya vino. \v 21 Tango amelaki masanga ya vino oyo ewutaki na elanga na ye, alangwaki mpe atikalaki bolumbu kati na ndako na ye ya kapo. \v 22 Cham, tata ya Kanana, amonaki bolumbu ya tata na ye mpe ayebisaki bandeko na ye ya mibali oyo bazalaki na libanda. \v 23 Kasi Semi mpe Jafeti bazwaki elamba mpe batiaki yango na mapeka na bango. Bazongaki sima-sima mpe bazipaki bolumbu ya tata na bango. Lokola bilongi na bango etalaki na ngambo mosusu, bamonaki bolumbu ya tata na bango te. \p \v 24 Tango milangwa ya Noa esilaki, ayokaki likambo oyo mwana na ye ya suka asalaki. \v 25 Alobaki : \q1 « Tika ete Kanana alakelama mabe, \q2 azala mowumbu ya suka \q2 ya bandeko na ye ! » \p \v 26 Alobaki lisusu : \q1 « Tika ete Yawe, Nzambe ya Semi, apambolama ! \q2 Tika ete Kanana azala mowumbu ya Semi ! \q1 \v 27 Tika ete Nzambe ayeisa monene mabele ya Jafeti ! \q2 Tika ete Jafeti avanda na bandako ya kapo ya Semi, \q2 mpe Kanana azala mowumbu na ye ! » \p \v 28 Sima na mpela, Noa awumelaki na bomoi mibu nkama misato na tuku mitano. \v 29 Mibu nyonso ya bomoi ya Noa ezalaki nkama libwa na tuku mitano, sima akufaki. \c 10 \ms1 Mabota ya bana ya Noa \li4 \v 1 Tala libota ya Noa : Semi, Cham mpe Jafeti ; bango mpe babotaki bakitani sima na mpela. \s1 Libota ya Jafeti \li1 \v 2 Bana mibali ya Jafeti : \li2 Gomeri, Magogi, Madayi, Yavani, Tubali, Mesheki mpe Tirasi. \li1 \v 3 Bana mibali ya Gomeri : \li2 Ashikenazi, Rifati mpe Togarima. \li2 \v 4 Bana mibali ya Yavani : \li2 Elisha, Tarsisi, Kitimi mpe Dodanimi. \v 5 Bakitani na bango nde bavandaki na bisanga mpe na bamboka ya pembeni ya mayi. Moko na moko kati na bango azwaki mokili na ye kolanda lokota na ye, etuka na ye mpe libota na ye. \s1 Libota ya Cham \li1 \v 6 Bana mibali ya Cham : \li2 Kushi, Mitsirayimi, Puti mpe Kanana. \li1 \v 7 Bana mibali ya Kushi : \li2 Seba, Avila, Sabita, Raema mpe Sabiteka. \li2 Bana mibali ya Raema : \li2 Sheba mpe Dedani. \li4 \v 8 Kushi azalaki mpe tata ya Nimirodi oyo azalaki elombe ya liboso ya bitumba kati na mokili. \v 9 Azalaki mobomi monene ya banyama na miso ya Yawe. Yango wana, balobaka : « Mobomi monene ya banyama lokola Nimirodi na miso ya Yawe. » \v 10 Bingumba ya liboso ya mokili na ye ezalaki Babeli, Ereki, Akadi mpe Kaline na mokili ya Shineari. \v 11 Longwa na mokili wana, alekaki na Asiri mpe atongaki Ninive, Reoboti-Iri, Kala \v 12 mpe Reseni, engumba monene na kati-kati ya Ninive mpe Kala. \li1 \v 13 Mitsirayimi azalaki koko \li2 ya bato ya Ludi, ya Anami, ya Leabi, ya Nafitu, \v 14 ya Patrusi, ya Kasilu (oyo babimisa bato ya Filisitia) mpe ya Kereti. \li1 \v 15 Kanana azalaki tata \li2 ya Sidoni, mwana na ye ya liboso, ya Eti, \v 16 ya Yebusi, ya Amori, ya Girigazi, \v 17 ya Evi, ya Ariki, ya Sini, \v 18 ya Arivadi, ya Tsemari mpe ya Amati. \li2 (Mpe na sima, bato ya mabota nyonso ya Kanana bapalanganaki bipai na bipai. \v 19 Mokili ya bato ya Kanana ebandaki wuta na Sidoni, na nzela ya Gerari, kino na Gaza ; mpe na nzela ya Sodome, ya Gomore, ya Adima mpe ya Tseboyimi kino na Lesha.) \li4 \v 20 Bango nde bazalaki bakitani ya Cham kolanda mabota mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango. \s1 Libota ya Semi \li4 \v 21 Semi, kulutu ya Jafeti, abotaki mpe bana ; azalaki koko ya Eberi mpe ya bakitani na ye. \li1 \v 22 Bana mibali ya Semi : \li2 Elami, Asuri, Aripakishadi, Ludi mpe Arami. \li1 \v 23 Bana mibali ya Arami : \li2 Utsi, Uli, Geteri mpe Mashi. \li1 \v 24 Aripakishadi abotaki Shela ; \li2 Shela abotaki Eberi. \li1 \v 25 Eberi abotaki bana mibali mibale : \li2 moko, kombo na ye ezalaki « Pelegi, » pamba te na tango na ye nde bakabolaki mabele ; mpe mosusu, « Yokitani. » \li1 \v 26 Yokitani abotaki \li2 Alimodadi, Shelefi, Atsarimaveti, Yera, \v 27 Adorami, Uzali, Dikila, \v 28 Obali, Abimaeli, Saba, \v 29 Ofiri, Avila mpe Yobabi. Bango nyonso wana bazalaki bakitani ya Yokitani. \li2 \v 30 (Mokili oyo bazalaki kovanda ebandaki wuta na Mesha kino na Sefari, na mokili ya bangomba ya este.) \li4 \v 31 Bango nde bazalaki bana mibali ya Semi kolanda bituka mpe nkota na bango, kati na mikili mpe bikolo na bango. \b \li4 \v 32 Wana nde bituka ya bana mibali ya Noa kolanda milongo mpe mikili na bango. Bato nyonso oyo batondisaki mokili sima na mpela babotamaki na nzela na bango. \c 11 \s1 Ndako molayi ya Babeli \p \v 1 Na tango wana, bato ya mokili mobimba bazalaki koloba monoko moko mpe bazalaki na elobeli moko. \v 2 Tango bato bazalaki kotambola mpo na kokende na ngambo ya weste, bamonaki etando moko ya monene na mokili ya Shineari mpe bavandaki kuna. \p \v 3 Balobanaki bango na bango : « Tosala babiliki mpe totumba yango na moto. » \p Boye, basalelaki babiliki lokola mabanga mpe potopoto ya mwindo mpo na kotongela. \v 4 Balobaki : « Tokende, totonga engumba mpo na biso mpe ndako molayi oyo songe na yango ekokoma kino na lola, mpo ete kombo na biso ekende sango mpe topanzana te na mokili mobimba. » \p \v 5 Kasi Yawe akitaki mpo na kotala engumba mpe ndako molayi oyo bato babandaki kotonga. \v 6 Yawe alobaki : « Lokola bato oyo nyonso balongi kokoma ekolo moko mpe koloba monoko moko, bongo bakomi kino kosala mosala monene oyo, eloko moko te ekopekisa bango sik’oyo kokokisa mabongisi nyonso oyo bakokana kosala ! \v 7 Boye, tokita mpe totia mobulu kati na maloba na bango mpo ete bango na bango bayokana lisusu te. » \p \v 8 Wuta na Babeli, Yawe apanzaki bango na mokili mobimba mpe batikaki kotonga engumba. \v 9 Yango wana, babengaka yango Babeli, pamba te kuna nde Yawe atiaki mobulu kati na maloba ya bato ya mokili mobimba, mpe wuta kuna, Yawe apanzaki bato na mokili mobimba. \s1 Libota ya Semi \p \v 10 Tala libota ya Semi : \b \li1 Mibu mibale sima na mpela, wana Semi azalaki nanu na mibu nkama moko ya mbotama, akomaki tata ya Aripakishadi. \v 11 Sima na mbotama ya Aripakishadi, Semi awumelaki na bomoi mibu nkama mitano mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \li1 \v 12 Tango Aripakishadi akokisaki mibu tuku misato na mitano ya mbotama, abotaki mwana mobali na kombo « Shela. » \v 13 Sima na mbotama ya Shela, Aripakishadi awumelaki na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \li1 \v 14 Tango Shela akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Eberi. \v 15 Mpe sima na mbotama ya Eberi, Shela awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \li1 \v 16 Tango Eberi akokisaki mibu tuku misato na minei ya mbotama, abotaki Pelegi. \v 17 Mpe sima na mbotama ya Pelegi, Eberi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama minei na tuku misato mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \li1 \v 18 Tango Pelegi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Rewu. \v 19 Mpe sima na mbotama ya Rewu, Pelegi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \li1 \v 20 Tango Rewu akokisaki mibu tuku misato na mibale ya mbotama, abotaki Serugi. \v 21 Sima na mbotama ya Serugi, Rewu awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale na sambo mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \li1 \v 22 Tango Serugi akokisaki mibu tuku misato ya mbotama, abotaki Naori. \v 23 Sima na mbotama ya Naori, Serugi awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama mibale mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \li1 \v 24 Tango Naori akokisaki mibu tuku mibale na libwa ya mbotama, abotaki Tera. \v 25 Mpe sima na mbotama ya Tera, Naori awumelaki lisusu na bomoi mibu nkama moko na zomi na libwa mpe abotaki bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \li1 \v 26 Tango Tera akokisaki mibu tuku sambo ya mbotama, abotaki Abrami, Naori mpe Arani. \s1 Libota ya Tera \p \v 27 Tala libota ya Tera : \b \p Tera abotaki Abrami, Naori mpe Arani. Arani nde azalaki tata ya Loti. \v 28 Wana tata na ye, Tera, azalaki nanu na bomoi, Arani akufaki kati na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mokili epai wapi abotamaki. \v 29 Kombo ya mwasi ya Abrami ezalaki « Sarayi, » mpe kombo ya mwasi ya Naori ezalaki « Milika. » Milika azalaki mwana mwasi ya Arani ; mpe Arani azalaki na mwana mwasi mosusu : kombo na ye ezalaki « Yisika. » \v 30 Sarayi azalaki ekomba : azalaki na mwana te. \p \v 31 Tera azwaki Abrami, mwana na ye ya mobali ; Loti, koko na ye mpe mwana mobali ya Arani ; mpe Sarayi, bokilo na ye mpe mwasi ya mwana na ye Abrami, babimaki na Uri ya bato ya Chalide mpo na kokende na Kanana. Kasi tango bakomaki na engumba Arani, bavandaki kuna. \p \v 32 Tera awumelaki na bomoi mibu nkama mibale na mitano, sima akufaki na engumba Arani. \c 12 \s1 Nzambe abengi Abrami \p \v 1 Yawe alobaki na Abrami : « Bima wuta na mokili na yo, wuta na libota na yo mpe wuta na ndako ya tata na yo, mpo na lobiko na yo, mpe kende na mokili oyo nakolakisa yo. \q1 \v 2 Nakokomisa yo ekolo monene mpe nakopambola yo ; \q2 nakokomisa kombo na yo monene, \q2 mpe okozala etima ya mapamboli. \q1 \v 3 Nakopambola bato oyo bakopambola yo, \q2 mpe nakolakela mabe moto oyo akolakela yo mabe ; \q1 mpe bato ya bituka nyonso \q2 ya mabele bakomipambola mpo na yo. » \p \v 4 Abrami akendeki ndenge Yawe alobaki na ye ; mpe Loti akendeki na ye elongo. Abrami azalaki na mibu tuku sambo na mitano tango abimaki na engumba Arani. \v 5 Abrami azwaki mwasi na ye Sarayi ; Loti, mwana ya ndeko na ye ; bomengo nyonso oyo akomaki na yango mpe bato oyo azwaki na Arani. Babimaki wuta na Arani mpo na kokende na Kanana mpe bakomaki kuna. \p \v 6 Abrami atambolaki kati na mokili yango kino na esika oyo babengaka Sishemi, na nzete monene ya More. Na tango wana, bato ya Kanana bazalaki kovanda na mokili yango. \v 7 Yawe amimonisaki epai ya Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo epai ya bakitani na yo. » Boye Abrami atongaki na esika yango etumbelo mpo na Yawe oyo amimonisaki epai na ye. \p \v 8 Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este. \p \v 9 Sima, Abrami alongwaki wana mpe akendeki malembe-malembe kino na Negevi. \s1 Abrami kati na Ejipito \p \v 10 Nzala makasi ekotaki na mokili ; bongo Abrami akendeki kovanda na Ejipito mpo na tango moke, pamba te nzala makasi ekotaki na mokili. \v 11 Tango akomaki pene ya kokota na Ejipito, alobaki na mwasi na ye Sarayi : « Nayebi ete ozali mwasi kitoko penza. \v 12 Tango bato ya Ejipito bakomona yo, bakoloba : ‹ Azali mwasi na ye. › Boye, bakoboma ngai mpe bakotika yo na bomoi. \v 13 Kasi yo, loba na bango ete ozali ndeko na ngai ya mwasi. Na bongo, bakosalela ngai bolamu mpo na yo, mpe bomoi na ngai ekobika mpo na yo. » \p \v 14 Tango Abrami akomaki na Ejipito, bato ya Ejipito bamonaki ete Sarayi azalaki mwasi kitoko penza. \v 15 Wana bakonzi ya basali ya Faraon bamonaki ye, bakumisaki ye liboso ya Faraon mpe bamemaki ye na ndako ya Faraon mpo ete akoma mwasi na ye. \v 16 Basalelaki Abrami bolamu likolo ya Sarayi, mpe Abrami azwaki bameme, bantaba mpe bangombe, ba-ane, basali ya basi mpe ya mibali, bana ya ba-ane mpe bashamo. \p \v 17 Kasi Yawe apesaki etumbu makasi epai ya Faraon mpe ndako na ye mpo na Sarayi, mwasi ya Abrami. \v 18 Boye, Faraon abengisaki Abrami mpe alobaki na ye : « Likambo nini osali ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ete azali mwasi na yo ? \v 19 Mpo na nini olobaki : ‹ Azali ndeko na ngai ya mwasi ? › Mpo na yango, nakomisaki ye mwasi na ngai. Sik’oyo tala mwasi na yo, kamata ye mpe kende ! » \p \v 20 Boye, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye na tina na Abrami ete babengana ye elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango. \c 13 \s1 Bokabwani ya Abrami mpe Loti \p \v 1 Boye Abrami alongwaki na Ejipito mpe akendeki na Negevi elongo na mwasi na ye mpe biloko nyonso oyo azalaki na yango ; Loti mpe akendeki na ye elongo. \v 2 Abrami akomaki na bozwi mingi : bibwele, palata mpe wolo. \p \v 3 Longwa na Negevi, akendeki malembe-malembe kino na Beteli, na esika oyo ezalaki kati ya Beteli mpe Ayi, epai wapi ndako na ye ya kapo ezalaki \v 4 mpe atongaki etumbelo ya liboso. Ezalaki na esika yango nde Abrami abelelaki Kombo ya Yawe. \p \v 5 Loti, oyo azalaki kotambola elongo na Abrami, azalaki mpe na bameme, bantaba, bangombe mpe basali. \v 6 Boye etuka ekomaki moke mpo na bango mibale, pamba te bomengo na bango ezalaki ebele penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ; \v 7 mpe koswana ekotaki kati na babateli bibwele ya Abrami mpe babateli bibwele ya Loti. Nzokande, na tango wana, bato ya Kanana mpe ya Perizi bazalaki kovanda kati na mokili yango. \p \v 8 Abrami alobaki na Loti : « Tika ete koswana ezala te kati na ngai mpe yo to kati na babateli bibwele na yo mpe babateli bibwele na ngai, pamba te tozali bandeko. \v 9 Mokili mobimba ezali liboso na yo. Ezali malamu tokabwana : soki yo okeyi na ngambo ya loboko ya mwasi, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mobali ; soki okeyi na ngambo ya loboko ya mobali, ngai nakokende na ngambo ya loboko ya mwasi. » \p \v 10 Boye Loti atalaki mpe amonaki etando nyonso ya Yordani oyo ezalaki na mabele kitoko mpe ekenda kino na Tsoari. Liboso ete Yawe abebisa Sodome mpe Gomore, ezalaki lokola elanga ya Yawe, lokola mokili ya Ejipito. \v 11 Loti aponaki etando ya Yordani mpe akendeki na ngambo ya este. Ezalaki ndenge wana nde bakabwanaki. \v 12 Abrami avandaki na mokili ya Kanana, mpe Loti avandaki kati na bingumba ya etando mpe atelemisaki bandako na ye ya kapo pene ya Sodome. \v 13 Bato ya Sodome bazalaki penza bato mabe mpe bato ya masumu na miso ya Yawe. \s1 Abrami atamboli kati na mokili ya elaka \p \v 14 Sima na bokabwani ya Abrami na Loti, Yawe alobaki na Abrami : « Na esika oyo ozali, tombola miso na yo mpe tala na ngambo ya nor, ya sude, ya este mpe ya weste. \v 15 Mokili nyonso oyo ozali komona, nakopesa yango epai na yo mpe na bakitani na yo mpo na libela. \v 16 Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola putulu ya mabele ; bongo soki moto akoki kotanga putulu, akokoka mpe kotanga bakitani na yo. \v 17 Telema, tambola kati na mokili na bangambo nyonso, pamba te nakopesa yango epai na yo. » \p \v 18 Abrami alongolaki bandako na ye ya kapo mpe akendeki kovanda na Ebron, pene ya banzete minene ya Mamire epai wapi atongaki etumbelo mpo na Yawe. \c 14 \s1 Abrami abikisi Loti \p \v 1 Na tango wana, Amirafeli, mokonzi ya Shineari ; Arioki, mokonzi ya Elasari ; Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami, mpe Tideali, mokonzi ya Goyimi, \v 2 bakendeki kobundisa Bera, mokonzi ya Sodome ; Birisha, mokonzi ya Gomore ; Shineabi, mokonzi ya Adima ; Shemeberi, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari. \v 3 Bakonzi mitano oyo, basangisaki mampinga na bango ya basoda na lubwaku ya Sidimi oyo ezali ebale monene ya Barozo. \v 4 Bazalaki na se ya bokonzi ya Kedorilaomeri mibu zomi na mibale, kasi na mobu oyo ya zomi na misato, batombokelaki ye. \p \v 5 Na mobu ya zomi na minei, Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, babundisaki mpe balongaki bato ya Refayimi na Ashiteroti-Karinayimi ; bato ya Zuzimi, na Ami ; mpe bato ya Emimi, na Shave-Kiriatayimi ; \v 6 bato ya Ori, na Seiri, mokili ya bangomba kino na Parani, pene ya esobe. \v 7 Tango bazongaki, bakendeki na Eyini-Mishipati oyo elakisi Kadeshi mpe babotolaki mokili mobimba ya bato ya Amaleki. Balongaki mpe bato ya Amori oyo bazalaki kovanda na Atsatsoni-Tamari. \p \v 8 Boye mokonzi ya Sodome, mokonzi ya Gomore, mokonzi ya Adima, mokonzi ya Tseboyimi mpe mokonzi ya Bela oyo elakisi Tsoari, babimaki mpe babongamaki na lubwaku ya Sidimi \v 9 mpo na kobundisa Kedorilaomeri, mokonzi ya Elami ; Tideali, mokonzi ya Goyimi ; Amirafeli, mokonzi ya Shineari, mpe Arioki, mokonzi ya Elasari. Bakonzi minei babundisaki bakonzi mitano. \v 10 Nzokande, lubwaku ya Sidimi ezalaki na mabulu oyo etonda na potopoto ya mwindo ; bongo tango bakonzi ya Sodome mpe ya Gomore bazalaki kokima, ndambo ya bato bazalaki kozinda kati na yango mpe ndambo mosusu bazalaki kokima na bangomba. \v 11 Bakonzi oyo minei, babotolaki biloko nyonso ya Sodome mpe ya Gomore mpe bakendeki na biloko na bango nyonso ya kolia. \v 12 Bamemaki mpe lisusu Loti, mwana ya ndeko ya Abrami, elongo na bomengo na ye nyonso oyo azwaki tango azalaki kovanda na Sodome. \p \v 13 Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami. \v 14 Tango Abrami ayokaki ete bakangi ndeko na ye, abengisaki bato nkama misato na zomi na mwambe oyo bayebi kobunda mpe babotama na ndako na ye. Boye balandaki bango kino na Dani. \v 15 Na butu, Abrami akabolaki bato na ye mpo na kobundisa bango, abetaki bango mpe alandaki bango kino na Oba, na nor ya Damasi. \v 16 Abotolaki bango bomengo nyonso ya bitumba mpe azongaki na ndeko na ye Loti elongo na biloko na ye nyonso, basi mpe bato mosusu. \s1 Melishisedeki apamboli Abrami \p \v 17 Mokonzi ya Sodome akendeki na lubwaku ya Shave oyo ezali lubwaku ya bokonzi, mpo na kokutana na Abrami oyo azali kozonga sima na ye kolonga Kedorilaomeri elongo na bakonzi oyo basanganaki na ye, na bitumba. \p \v 18 Melishisedeki, mokonzi ya Salemi, amemaki mapa mpe masanga ya vino. Azalaki Nganga-Nzambe ya Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo \v 19 mpe apambolaki Abrami na maloba oyo : \q1 « Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, \q2 Mokeli ya likolo mpe ya mokili, \q2 apambola Abrami ! \q1 \v 20 Tika ete Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo apambolama, \q2 Ye oyo akabi na maboko na yo banguna na yo ! » \m Abrami apesaki ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo azwaki lokola bomengo ya bitumba. \p \v 21 Mokonzi ya Sodome alobaki na Abrami : \pi1 — Pesa ngai bato, kamata na yo biloko. \p \v 22 Kasi Abrami azongiselaki mokonzi ya Sodome : \pi1 — Nalapi ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe-Oyo-Aleki-Likolo, Nzambe oyo akela likolo mpe mokili, \v 23 ete nakozwa eloko moko te kati na biloko na yo : ezala singa ya kotongela to ya kokangela sapato, mpo ete oloba te : « Nakomisi Abrami mozwi. » \v 24 Nakondima eloko te longola kaka biloko oyo bato na ngai baliaki mpe biloko ya bato oyo bazalaki elongo na ngai : Aneri, Eshikoli mpe Mamire ; bango nde bakozwa biloko na bango. \c 15 \s1 Nzambe asali boyokani elongo na Abrami \p \v 1 Sima na makambo oyo, Yawe alobaki na Abrami na nzela ya emoniseli : \q1 — Kobanga te, Abrami ! \q2 Nazali nguba na yo, \q2 lifuti na yo ekozala monene. \p \v 2 Kasi Abrami azongisaki : \pi1 — Oh Nkolo Yawe, okopesa ngai nini ? Nazali na mwana te, mpe ezali Eliezeri ya Damasi nde akokitana na libula na ngai. \p \v 3 Abrami alobaki lisusu : \pi1 — Opesi ngai mwana te ; yango wana mosali moko kati na ndako na ngai akozala mokitani ya libula na ngai ! \p \v 4 Yawe alobaki na ye : \pi1 — Moto wana akozala mokitani ya libula na yo te. Kasi mwana oyo akobima na mokongo na yo nde akozala mokitani ya libula na yo. \p \v 5 Yawe amemaki Abrami na libanda mpe alobaki na ye : \pi1 — Tala na likolo mpe tanga minzoto soki okokoka kotanga yango. \p Alobaki na ye lisusu : \pi1 — Ezali boye nde bakitani na yo bakozala. \p \v 6 Abrami azalaki na kondima epai ya Yawe, yango wana Yawe atangaki ye lokola moto ya sembo. \p \v 7 Alobaki na ye lisusu : \pi1 — Nazali Yawe oyo nabimisaki yo wuta na Uri, mokili ya bato ya Chalide, mpo na kopesa yo mokili oyo. \p \v 8 Kasi Abrami alobaki : \pi1 — Ah Nkolo Yawe, nakoyeba ndenge nini ete mokili oyo epesameli ngai ? \p \v 9 Yawe alobaki na ye : \pi1 — Memela Ngai mwana ngombe moko ya mwasi ya mibu misato, ntaba ya mwasi ya mibu misato, meme ya mobali ya mibu misato, ebenga moko ya zamba mpe ebenga moko ya mboka. \p \v 10 Abrami amemelaki Ye banyama oyo nyonso, akataki yango na biteni mibale mpe atiaki yango etalana eteni moko na eteni mosusu ; kasi akataki bandeke te. \p \v 11 Bandeke oyo eliaka misuni ekitaki mpo na kolia misuni yango, kasi Abrami abenganaki yango. \p \v 12 Tango moyi ekitaki, Abrami alalaki pongi makasi. Na kati ya molili makasi, somo ekangaki ye. \v 13 Boye, Yawe alobaki na Abrami : \pi1 — Yeba solo ete bakitani na yo bakozala bapaya kati na mokili ya bapaya epai wapi bakozala bawumbu ; mpe bakonyokola bango kuna mibu nkama minei. \v 14 Kasi nakopesa etumbu na ekolo oyo ekokomisa bango bawumbu ; mpe na sima, bakobima longwa na mokili yango elongo na bozwi ebele. \v 15 Bongo yo, okokufa na kimia mpe okokundama sima na kimobange ya esengo. \v 16 Na molongo ya minei, bakitani na yo bakozonga awa, pamba te masumu ya bato ya Amori ekomi nanu ebele te. \p \v 17 Tango moyi elalaki mpe molili eyaki makasi, mbabola ya milinga mpe koni ya moto elekaki kati ya biteni ya banyama. \v 18 Na mokolo yango, Yawe asalaki boyokani elongo na Abrami mpe alobaki : « Nakopesa mokili oyo na bakitani na yo wuta na moluka ya Ejipito kino na ebale Efrate : \v 19 mokili ya bato ya Keni, ya bato ya Kenizi, ya bato ya Kadimoni, \v 20 ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Refayimi, \v 21 ya bato ya Amori, ya bato ya Kanana, ya bato ya Girigazi mpe ya bato ya Yebusi. » \c 16 \s1 Agari mpe Isimaeli \p \v 1 Sarayi, mwasi ya Abrami, abotelaki ye mwana te. Nzokande azalaki na mosali moko ya mwasi, moto ya Ejipito ; kombo na ye « Agari. » \v 2 Sarayi alobaki na Abrami : \pi1 — Yawe apesi ngai mabota te. Kende, sangisa nzoto na mosali na ngai ya mwasi, tango mosusu nakotonga libota na nzela na ye. \p Abrami ayokaki maloba ya Sarayi. \v 3 Sima na mibu zomi, wana Abrami avandaki na Kanana, mwasi na ye Sarayi apesaki ye Agari, mosali na ye ya mwasi, moto ya Ejipito, mpo ete azala mwasi na ye. \v 4 Abrami asangisaki nzoto na Agari, mpe Agari akomaki na zemi. Tango Agari asosolaki ete akomi na zemi, akomaki kotiola Sarayi, nkolo na ye. \v 5 Boye, Sarayi alobaki na Abrami : \pi1 — Ezali mpo na yo nde ngai nazali komona pasi ya boye ; napesaki mosali na ngai ya mwasi na maboko na yo. Mpe sik’oyo lokola amoni ete azali na zemi, akomi kotiola ngai. Tika ete Yawe akata likambo kati na ngai mpe yo. \p \v 6 Abrami alobaki : \pi1 — Mosali na yo azali na maboko na yo. Sala epai na ye nyonso oyo omoni malamu. \p Boye, Sarayi akomaki konyokola Agari mpe Agari akimaki mosika na ye. \p \v 7 Anjelu ya Yawe amonaki Agari na esobe, pene ya etima oyo ezali na nzela ya Shuri. \v 8 Atunaki ye : \pi1 — Agari, mosali ya Sarayi, owuti wapi mpe ozali kokende wapi ? \p Azongisaki : \pi1 — Nazali kokima mosika ya Sarayi, nkolo na ngai. \p \v 9 Anjelu ya Yawe alobaki na ye : \pi1 — Zonga epai ya nkolo na yo mpe mikitisa liboso na ye. \p \v 10 Anjelu ya Yawe alobaki na ye lisusu : \pi1 — Nakokomisa bakitani na yo ebele penza mpe moto moko te akokoka kotanga bango. \p \v 11 Alobaki na ye lisusu : \q1 — Ozali na zemi mpe okobota mwana mobali, \q2 okopesa ye kombo « Isimaeli, » \q1 pamba te Yawe ayoki yo, \q2 kati na mawa na yo. \q1 \v 12 Akozala lokola ane ya zamba. \q2 Loboko na ye ekobundisa moto nyonso, \q1 mpe loboko ya moto nyonso ekobundisa ye ; \q2 akovanda esika moko te na bandeko na ye. \p \v 13 Agari amitunaki : « Boni, namoni solo Nzambe oyo azali komona ngai ? » \p Boye, Agari apesaki Yawe oyo asololaki na ye Kombo « Ata-Eli-Royi, » oyo elakisi : Nzambe oyo azali komona ngai. \v 14 Yango wana babengaka libulu ya mayi yango Beri Lakai-Royi\f + \fr 16.14 \fr*\ft Beri Lakai-Royi elingi koloba : libulu ya Ye oyo azali na bomoi, oyo azali komona ngai.\ft*\f*. Libulu ya mayi yango ezali na kati-kati ya Kadeshi mpe Beredi. \p \v 15 Boye, Agari abotelaki Abrami mwana mobali mpe Abrami apesaki ye kombo « Isimaeli\f + \fr 16.15 \fr*\ft Isimaeli elakisi : Nzambe ayoki.\ft*\f*. » \v 16 Abrami azalaki na mibu tuku mwambe na motoba ya mbotama tango Agari abotelaki ye Isimaeli. \c 17 \s1 Nzambe ayeisi sika boyokani elongo Abrami \p \v 1 Tango Abrami akokisaki mibu tuku libwa na libwa ya mbotama, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Tambola liboso na Ngai mpe zala moto azanga pamela. \v 2 Nakosala boyokani kati na Ngai mpe yo, mpe nakokomisa bakitani na yo ebele penza. » \p \v 3 Abrami afukamaki elongi kino na mabele, mpe Nzambe alobaki na ye lisusu : \v 4 « Mpo na Ngai, tala boyokani oyo nazali kosala elongo na yo : ‹ Okozala tata ya bikolo ebele. \v 5 Bakobenga yo lisusu Abrami te ; kombo na yo ekokoma Abrayami\f + \fr 17.5 \fr*\ft Abrayami elakisi : tata ya mabota ebele.\ft*\f*, pamba te nakokomisa yo tata ya bikolo ebele. \v 6 Nakopesa yo mabota ebele, nakobimisa bikolo mpe bakonzi na nzela na yo. \v 7 Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela na libela kati na Ngai mpe yo, mpe elongo na bakitani na yo sima na yo, mpo na milongo oyo ekoya na sima, mpo ete nazala Nzambe na yo mpe Nzambe ya bakitani na yo sima na yo. \v 8 Nakopesa lokola libula ya seko na seko, epai na yo mpe epai ya bakitani na yo sima na yo, mokili nyonso ya Kanana epai wapi ozali mopaya. Nakozala Nzambe ya bakitani na yo. › » \p \v 9 Nzambe alobaki lisusu na Abrayami : « Kasi mpo na yo, osengeli kobatela boyokani na Ngai, yo elongo na bakitani na yo sima na yo mpo na milongo oyo ekoya sima. \v 10 Tala boyokani na Ngai elongo na yo mpe bakitani na yo sima na yo, boyokani oyo osengeli kobatela : Mwana mobali nyonso kati na bino asengeli kokatama ngenga. \v 11 Kokatama ngenga ekozala elembo ya boyokani kati na bino mpe Ngai. \v 12 Mpo na milongo nyonso oyo ekoya, mwana mobali nyonso kati na bino, oyo akokisi mikolo mwambe asengeli kokatama ngenga : ezala mwana mobali oyo abotami kati na ndako na yo to mwana mobali oyo osombi na mosolo na yo epai ya mopaya, mwana mobali oyo azali mokitani na yo te, ye mpe asengeli kokatama ngenga. \v 13 Mowumbu nyonso oyo abotami kati na ndako na yo to oyo osombi na mosolo na yo asengeli kokatama ngenga. Boyokani na Ngai ekozala kati na banzoto na bino lokola boyokani ya libela na libela. \v 14 Mwana mobali nyonso oyo akokatama ngenga te, bakolongola ye kati na bato na ye, mpo ete abebisi boyokani na Ngai. » \p \v 15 Nzambe alobaki lisusu na Abrayami : « Mpo na Sarayi, mwasi na yo, okobenga ye lisusu te Sarayi, kasi okokoma kobenga ye Sara\f + \fr 17.15 \fr*\ft Sara elakisi : mwana mwasi oyo azali mwana ya mokonzi.\ft*\f*. \v 16 Nakopambola ye mpe nakopesa yo penza mwana mobali na nzela na ye ; nakopambola ye mpo ete akoma mama ya bikolo. Bakonzi ya bikolo bakobima na nzela na ye. » \p \v 17 Abrayami afukamaki elongi kino na mabele, asekaki mpe amilobelaki : « Eh ! Mobali oyo azali na mibu nkama moko ya mbotama akoki lisusu kobota mwana ! Bongo Sara, mwasi oyo azali na mibu tuku libwa ya mbotama, akoki penza kokumba zemi ! » \p \v 18 Boye Abrayami alobaki na Nzambe : \pi1 — Tika ete Isimaeli awumela na se ya lipamboli na Yo ! \p \v 19 Nzambe alobaki : \pi1 — Te ! Mwasi na yo, Sara, akobotela yo mwana mobali, mpe okobenga ye « Izaki\f + \fr 17.19 \fr*\ft Izaki elingi koloba : azali koseka.\ft*\f*. » Nakobatela boyokani na Ngai lokola boyokani ya libela elongo na ye mpe bakitani na ye sima na ye. \v 20 Kasi mpo na Isimaeli, nayoki yo. Solo, nakopambola ye, nakopesa ye mabota ebele mpe nakokomisa bakitani na ye ebele. Akozala tata ya bakambi zomi na mibale, mpe nakokomisa ye tata ya ekolo monene. \v 21 Kasi na oyo etali boyokani na Ngai, nakosala yango elongo na Izaki, mwana mobali oyo Sara akobotela yo na eleko oyo, na mobu oyo ezali koya. \p \v 22 Tango Nzambe asilisaki kosolola na Abrayami, akendeki. \p \v 23 Kaka na mokolo wana, Abrayami azwaki mwana na ye ya mobali, Isimaeli, mpe bawumbu nyonso, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mosolo, akatisaki bango nyonso ngenga ndenge kaka Nzambe alobaki na ye. \v 24 Abrayami azalaki na mibu tuku libwa na libwa ya mbotama tango akatamaki ngenga ; \v 25 mpe Isimaeli, mwana na ye ya mobali, azalaki na mibu zomi na misato tango akatamaki ngenga. \v 26 Abrayami mpe mwana na ye ya mobali, Isimaeli, bakatamaki ngenga mokolo moko. \v 27 Mibali nyonso kati na ndako ya Abrayami, ezala ba-oyo babotamaki na ndako na ye to ba-oyo asombaki na mokili ya bapaya, bakatamaki ngenga elongo na ye. \c 18 \s1 Abrayami ayambi bapaya misato \p \v 1 Yawe abimelaki Abrayami pene ya banzete minene ya Mamire, wana avandaki na ekotelo ya ndako na ye ya kapo, na moyi makasi ya midi. \v 2 Tango Abrayami atombolaki miso, amonaki mibali misato pene na ye. Mpe tango kaka amonaki bango, atelemaki wuta na ndako na ye ya kapo mpe akendeki mbangu mpo na kokutana na bango ; bongo agumbamaki kino na mabele. \p \v 3 Alobaki : \pi1 — Nabondeli bino, bankolo na ngai, soki nazwi ngolu na miso bino, boleka mosali na bino te. \v 4 Tika ete namemela bino mwa mayi mpo ete bokoka kosukola makolo mpe bopema na se ya nzete oyo. \v 5 Tika ete namemela bino mwa eloko ya kolia mpo ete bozwa lisusu makasi na nzoto ; bongo bokokoba mobembo na bino, pamba te ezali mpo na yango nde boleki epai na ngai mosali na bino. \p Bazongisaki : \pi1 — Ezali malamu, sala ndenge olobi. \p \v 6 Abrayami akotaki na lombangu na ndako na ye ya kapo mpe alobaki na Sara : « Kamata katini\f + \fr 18.6 \fr*\ft Katini misato ekotaki bakilo pene zomi na motoba\ft*\f* misato ya farine mpe sala bagato na lombangu. » \p \v 7 Mpe Abrayami apotaki mbangu na lopango ya bibwele, azwaki mwana ngombe ya mafuta mpe apesaki yango na mosali na ye mpo ete alamba yango noki-noki. \v 8 Azwaki mafuta ya ngombe, miliki mpe mosuni oyo alambaki, mpe atiaki yango liboso na bango. Abrayami atelemaki pembeni na bango, na se ya nzete, wana bazalaki kolia. \p \v 9 Sima, batunaki ye : \pi1 — Wapi Sara, mwasi na yo ? \p Abrayami azongisaki : \pi1 — Azali na ndako. \p \v 10 Bongo moko kati na bango alobaki : \pi1 — Solo, na mobu oyo ezali koya, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara, mwasi na yo, akozala na mwana mobali. \p Nzokande, Sara ayokaki maloba wana na ekotelo ya ndako ya kapo, na sima ya Abrayami. \v 11 Abrayami mpe Sara bazalaki mibange, mpo ete bakomaki na mibu ebele penza mpe Sara azalaki lisusu na makoki te ya kobota. \v 12 Sara asekaki mpe amilobelaki : « Awa nasili konuna boye, nakoki lisusu koyoka posa ya mobali ? Kutu nkolo na ngai akomi mpe mobange ! » \p \v 13 Yawe alobaki na Abrayami : \pi1 — Mpo na nini Sara aseki mpe alobi : « Nakoki solo kobota mwana awa nasili kokoma mobange ? » \v 14 Boni, ezali na eloko oyo Yawe akoki kolembana ? Na mobu oyo ezali koya, na tango oyo ekatama, kaka na eleko oyo, nakozonga epai na yo, mpe Sara akozala na mwana mobali. \p \v 15 Sara abangaki ; boye awanganaki : \pi1 — Naseki te. \p Kasi Yawe alobaki : \pi1 — Ezali ya solo, oseki. \s1 Abrayami alobeli Sodome \p \v 16 Tango mibali yango batelemaki mpo na kokoba mobembo na bango na Sodome, Abrayami akendeki kotika bango na nzela. \p \v 17 Yawe amilobelaki : « Boni, nakoki solo kobombela Abrayami likambo oyo nalingi kosala ? \v 18 Solo, Abrayami akokoma ekolo monene mpe ya nguya, mpe bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na ye. \v 19 Pamba te naponaki ye mpo ete ateya bana na ye mpe ndako na ye sima na ye ete bayeba kobatela nzela ya Yawe na kozalaka na etamboli ya malamu mpe ya sembo ; na bongo nde, Ngai Yawe, nakokokisela Abrayami elaka oyo napesaki ye. » \p \v 20 Bongo Yawe alobaki : « Nayoki sango ete mabe ya bato ya Sodome mpe ya Gomore eleki ndelo, mpe masumu na bango eleki mingi penza. \v 21 Nakokita mpo na kotala soki makambo oyo bazali kosala ekokani na oyo Ngai nayoki. Soki ezali bongo te, nakoyeba. » \p \v 22 Mibali yango babalukaki mpe bakendeki na Sodome, kasi Abrayami atelemaki kaka liboso ya Yawe. \v 23 Bongo Abrayami apusanaki mpe alobaki : \pi1 — Boni, Nkolo na ngai, okoboma penza elongo moto ya sembo mpe moto mabe ? \v 24 Soki bato ya sembo bazali tuku mitano kati na engumba, okoboma bango kaka ? Okolimbisa engumba yango te mpo na bato ya sembo tuku mitano oyo bazali kati na yango ? \v 25 Te, okoki kosala likambo ya boye te ! Okoki te koboma elongo bato ya sembo mpe bato mabe, okoki kosala ndenge moko te na bato ya sembo mpe na bato mabe. Okoki kosala bongo te ! Boni, Mosambisi ya mokili mobimba akosambisa na bosembo te ? \p \v 26 Yawe azongisaki : \pi1 — Soki nakuti na Sodome bato ya sembo tuku mitano, nakolimbisa engumba mobimba mpo na bango. \p \v 27 Abrayami alobaki lisusu : \pi1 — Solo, nazali na ngai moto pamba mpe putulu, kasi limbisa ete nameka kosolola na Nkolo na ngai. \v 28 Bongo soki motango na bato ya sembo ezali tuku minei na mitano ? Boni, okobebisa engumba mobimba mpo na bato mitano oyo bazangi ? \p Yawe azongisaki : \pi1 — Soki nakuti bato ya sembo tuku minei na mitano, nakobebisa yango te. \p \v 29 Abrayami alobaki na Ye lisusu : \pi1 — Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku minei ? \p Azongisaki : \pi1 — Soki bazali kaka tuku minei, nakobebisa yango te. \p \v 30 Bongo Abrayami alobaki : \pi1 — Tika ete Nkolo na ngai asilika te soki nakobi koloba : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka tuku misato ? \p Azongisaki : \pi1 — Soki nakuti bato ya sembo tuku misato, nakobebisa yango te. \p \v 31 Abrayami alobaki : \pi1 —Awa nameki kosolola na Nkolo, boni, okosala nini soki bato ya sembo bazali kaka tuku mibale ? \p Azongisaki : \pi1 — Mpo na bato ya sembo tuku mibale, nakobebisa engumba te. \p \v 32 Bongo Abrayami alobaki : \pi1 — Tika ete Nkolo na ngai asilika te, pamba te nazali koloba mpo na mbala ya suka : Bongo soki bato ya sembo bazali kaka zomi ? \p Azongisaki : \pi1 — Mpo na bato ya sembo zomi, nakobebisa engumba te. \p \v 33 Sima na Yawe kosolola na Abrayami, akendeki ; mpe Abrayami azongaki na ndako na ye. \c 19 \s1 Yawe abebisi Sodome mpe Gomore \p \v 1 Ba-anjelu oyo mibale bakomaki na Sodome na pokwa. Wana Loti avandaki na ekuke, amonaki bango, akendeki koyamba bango mpe afukamaki elongi kino na mabele. \v 2 Alobaki na bango : \pi1 — Nabondeli bino, bankolo na ngai, boya na ndako ya mosali na bino. Bokoki kosukola kuna makolo na bino mpe kolekisa butu, bongo na tongo, bokoki kokoba mobembo na bino. \p Bazongiselaki ye : \pi1 — Te, tokolala kaka libanda. \p \v 3 Kasi Loti abondelaki bango mingi ; boye bandimaki kokende na ye elongo mpe bakotaki na ndako na ye. Alambelaki bango bilei ya kitoko, atumbaki mapa ezanga levire mpe baliaki. \p \v 4 Liboso ete bakende kolala, mibali nyonso ya engumba Sodome, bilenge mpe mibange, bawutaki bipai na bipai mpe bayaki kozingela ndako. \v 5 Babelelaki Loti : \pi1 — Wapi mibali oyo bayaki epai na yo na butu oyo ? Bimisela biso bango mpo ete tosangisa na bango nzoto. \p \v 6 Loti abimaki mpo na kosolola na bango ; akangaki ekuke sima na ye. \v 7 Alobaki : \pi1 — Te, baninga na ngai, bosala mabe te ! \v 8 Boyoka ! Nazali na bana basi mibale oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete namemela bino bango libanda ! Bosala bango nyonso oyo bolingi. Kasi bosala bato oyo eloko moko te mpo ete bayei kovanda na ndako na ngai. \p \v 9 Bazongisaki : \pi1 — Longwa wana. \p Balobaki lisusu : \pi1 — Botala moto oyo, ayaki awa lokola mopaya ; sik’oyo alingi komikomisa mosambisi. Tokosala yo mabe koleka bango. \p Bongo batindikaki Loti na makasi mpe bapusanaki pene ya ekuke mpo na koluka kobuka yango. \v 10 Kasi mibali oyo bazalaki kati na ndako babimisaki maboko mpe babendaki Loti na kati ya ndako mpe bakangaki ekuke. \v 11 Bakangaki miso ya bato nyonso oyo bazalaki na ekuke ya ndako, ezala bilenge to mibange ; boye bazalaki lisusu komona ekuke te. \p \v 12 Mibali yango mibale balobaki na Loti : \pi1 — Ozali lisusu na moto mosusu na engumba oyo, ndakisa : mibali ya bana na yo ya basi, bana na yo ya mibali mpe ya basi to mpe ndeko mosusu ? Bimisa bango libanda ya esika oyo \v 13 mpo ete tolingi kobebisa yango. Sango ya makambo mabe ya bato oyo ekomi kino epai na Yawe ; yango wana Yawe atindi biso mpo na kobebisa engumba oyo. \p \v 14 Boye Loti abimaki mpe akendeki koyebisa babandami ya mabala ya bana na ye ya basi. Alobaki : « Bosala noki mpe bobima na esika oyo, pamba te Yawe alingi kobebisa engumba oyo ! » \p Kasi babandami ya mabala ya bana na ye ya basi bakanisaki ete azali kosala maseki. \p \v 15 Tango kaka tongo etanaki, ba-anjelu batungisaki Loti mpe balobaki : \pi1 — Sala noki, kamata mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya basi oyo bazali awa ; soki te, bokobebisama tango engumba oyo ekozwa etumbu. \p \v 16 Lokola azalaki kowumela, mibali yango bakangaki na makasi loboko na ye, maboko ya mwasi mpe ya bana na ye ya basi ; mpe bamemaki bango na libanda ya engumba, pamba te Yawe ayokelaki bango mawa. \p \v 17 Tango kaka babimisaki bango na libanda, moko kati na mibali yango alobaki : \pi1 — Bokima mpo ete bobikisa bomoi na bino ! Botala sima te mpe botelema ata esika moko te kati na engumba oyo ! Bokima na likolo ya bangomba, noki te bokobebisama ! \p \v 18 Kasi Loti azongisaki : \pi1 — Te, nkolo na ngai, tika ete esalema bongo te ! \v 19 Mosali na yo azwi ngolu na miso na yo, mpe otalisi ngai bolamu makasi na ndenge obikisi bomoi na ngai. Kasi nakokoka te kokima na likolo ya bangomba, noki te likama ekokomela ngai mpe nakokufa. \v 20 Tala, ezali na engumba moko pene awa mpo na kokimela, yango ezali penza moke. Tika ngai nakimela kuna atako ezali moke mpo ete nabikisa bomoi na ngai ! \p \v 21 Anjelu alobaki na ye : \pi1 — Malamu mingi, nakokokisela yo lisusu bosenga oyo. Nakobebisa te engumba oyo ozali kolobela. \v 22 Kasi kima noki, pamba te nakoki kosala eloko moko te soki okomi nanu kuna te. \p Yango wana babengaka engumba yango Tsoari\f + \fr 19.22 \fr*\ft Tsoari elakisi : moke.\ft*\f*. \p \v 23 Loti akomaki na Tsoari tango tongo etanaki. \v 24 Boye wuta na likolo, Yawe anokisaki mvula ya moto makasi ya fofolo, na sodome mpe na Gomore. \v 25 Abebisaki bingumba yango, etando nyonso elongo na bato nyonso oyo bazalaki kovanda kuna mpe banzete nyonso. \v 26 Kasi mwasi ya Loti atalaki na sima mpe akomaki ekeko ya mungwa. \p \v 27 Na tongo makasi, Abrayami amataki na esika oyo atelemaki liboso ya Yawe ; \v 28 atalaki na ngambo ya Sodome mpe ya Gomore, mpe na ngambo ya mokili ya etando ; amonaki molinga makasi komata wuta na mokili lokola molinga ya fulu monene ya moto. \p \v 29 Boye, tango Nzambe abebisaki bingumba ya etando, akanisaki Abrayami mpe abikisaki Loti na likama oyo atindelaki bingumba epai wapi Loti azalaki kovanda. \s1 Loti mpe bana na ye ya basi \p \v 30 Loti mpe bana na ye mibale ya basi babimaki na Tsoari, bakendeki kovanda na bangomba, pamba te azalaki kobanga kotikala kuna. Ye elongo na bana na ye mibale ya basi bakendeki kovanda kati na lidusu ya libanga. \v 31 Mokolo moko, kulutu alobaki na leki na ye : « Tata na biso akomi mobange, mpe na etuka oyo, mobali oyo akosangisa na biso nzoto ndenge esalemaka na mokili mobimba, azali te. \v 32 Tika ete tomelisa tata na biso masanga ya vino mpe tosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. » \p \v 33 Na butu wana, bazwaki masanga ya vino mpe bamelisaki tata na bango. Boye kulutu akendeki mpe asangisaki nzoto na tata na ye, mpe tata na ye atikalaki koyeba likambo yango te, ezala tango mwana na ye ya mwasi akendeki epai na ye to tango alongwaki. \p \v 34 Mokolo oyo elandaki, kulutu alobaki na leki : « Na butu oyo ewuti koleka, nasangisaki nzoto na tata na ngai. Tika ete topesa ye lisusu masanga ya vino na butu ya lelo, mpe yo okokende kosangisa na ye nzoto mpo ete, na nzela ya tata na biso, libota na biso ebunga te. » \p \v 35 Na butu wana lisusu, bazwaki masanga ya vino mpe bamelisaki tata na bango ; bongo leki akendeki mpe asangisaki nzoto na tata na ye. Tata na ye atikalaki kaka koyeba likambo yango te, ezala tango mwana na ye ya mwasi akendeki epai na ye to tango alongwaki. \v 36 Boye bana basi oyo mibale ya Loti bakomaki na zemi ya tata na bango. \p \v 37 Kulutu abotaki mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Moabi\f + \fr 19.37 \fr*\ft Moabi elakisi : abimi na mokongo ya tata.\ft*\f* ; » azali tata ya ekolo ya Moabi, kino na mokolo ya lelo. \v 38 Leki mpe abotaki lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Beni-Ami\f + \fr 19.38 \fr*\ft Beni-Ami elakisi : mwana ya libota na ngai.\ft*\f* ; » azali tata ya ekolo ya Amoni, kino na mokolo ya lelo. \c 20 \s1 Abrayami mpe Abimeleki \p \v 1 Abrayami alongwaki na mboka wana mpo na kokende na etuka ya Negevi mpe avandaki na mboka oyo ezalaki kati ya Kadeshi mpe Shuri ; sima na tango moke, akendeki kovanda na Gerari. \v 2 Abrayami azalaki koloba kuna na tina na Sara, mwasi na ye : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ! » Yango wana Abimeleki, mokonzi ya Gerari, atindaki bato mpo na koluka Sara mpe akamataki ye na makasi. \v 3 Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. » \p \v 4 Nzokande, Abimeleki apusanaki nanu te pembeni na ye. Agangaki : \pi1 — Nkolo, okoboma penza ekolo ata soki esali na yango mabe te ? \v 5 Ezali mobali na ye moko nde alobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ; » mpe ye moko andimaki : « Azali ndeko na ngai ya mobali. » Nasali yango na motema sembo mpe na maboko ezanga mbindo. \p \v 6 Nzambe alobaki na ye na ndoto : \pi1 — Solo, nayebi ete osali yango na motema sembo. Yango wana nabatelaki yo mpo ete osala lisumu te epai na Ngai, mpe natikaki te ete osimba ye. \v 7 Sik’oyo, zongisa mwasi yango epai ya mobali na ye mpo ete azali mosakoli. Akobondela mpo na yo mpe okokufa te. Soki ozongisi ye te, yeba ete okokufa, yo mpe bato na yo nyonso. \p \v 8 Na tongo-tongo, Abimeleki alamukaki mpe abengisaki basali na ye nyonso. Tango ayebisaki bango makambo oyo ekomelaki ye, babangaki makasi. \v 9 Abimeleki abengaki Abrayami mpe alobaki na ye : \pi1 — Likambo nini osali biso, lisumu nini nasali yo mpo ete omemisa ngai mpe mokili na ngai ngambo ya monene boye ? Osali ngai makambo oyo ekoki kosalema te. \p \v 10 Abimeleki atunaki Abrayami : \pi1 — Makanisi nini ozalaki na yango mpo ete osala boye ? \p \v 11 Abrayami azongisaki : \pi1 — Namilobelaki : « Solo, bato ya esika oyo batosaka Nzambe ata moke te mpe bakoboma ngai mpo na mwasi na ngai. \v 12 Lisusu, azali ya solo ndeko na ngai ya mwasi, mwana ya tata na ngai ; kasi azali mwana ya mama na ngai te. Nzokande akoma mwasi na ngai. » \v 13 Tango Nzambe alongolaki ngai na ndako ya tata na ngai mpo na kokende bipai na bipai, nayebisaki mwasi na ngai : « Tala bolamu oyo okosalela ngai : Bisika nyonso oyo tokokende, okolobaka na tina na ngai : ‹ Azali ndeko na ngai. › » \p \v 14 Boye Abimeleki azwaki bameme, bantaba, bangombe, basali ya mibali mpe ya basi, apesaki na Abrayami. Mpe azongiselaki ye mwasi na ye Sara. \v 15 Abimeleki alobaki : « Mboka na ngai ezali liboso na yo, vanda na esika oyo olingi. » \p \v 16 Abalukaki mpe alobaki lisusu epai na Sara : « Tala, napesi mbongo ya bibende, nkoto moko, epai ya ndeko na yo ya mobali. Ezali mpo na kozipa mabe oyo basali yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na yo ; boye okomi sembo na nyonso. » \p \v 17 Abrayami abondelaki Nzambe, mpe Nzambe abikisaki Abimeleki, mwasi na ye, mpe basi bawumbu na ye. Na nzela wana, bazwaki lisusu bana ; \v 18 pamba te Yawe akangaki mabota kati na ndako mobimba ya Abimeleki likolo ya Sara, mwasi ya Abrayami. \c 21 \s1 Mbotama ya Izaki \p \v 1 Yawe atalisaki bolamu na Ye epai ya Sara ndenge kaka alobaki mpe akokisaki elaka oyo apesaki ye. \v 2 Sara azwaki zemi mpe abotelaki Abrayami mwana na kimobange na ye kaka na tango oyo Nzambe alakaki ye. \v 3 Abrayami apesaki na mwana oyo Sara abotelaki ye kombo « Izaki. » \v 4 Abrayami akatisaki Izaki ngenga tango akokisaki mikolo mwambe ya mbotama, ndenge Nzambe atindaki ye. \p \v 5 Abrayami azalaki na mibu nkama moko ya mbotama tango mwana na ye, Izaki, abotamaki. \p \v 6 Sara alobaki : « Nzambe apesi ngai libaku ya koseka ; mpe moto nyonso oyo akoyoka sango oyo akoseka elongo na ngai. » \v 7 Abakisaki : « Nani akokaki koloba na Abrayami ete Sara akomelisa bana mabele ? Pamba te naboteli ye mwana na kimobange na ye. » \s1 Abrayami abengani Agari mpe Isimaeli \p \v 8 Mwana akolaki mpe Sara akataki kopesa ye mabele. Mokolo bakataki kopesa Izaki mabele, Abrayami asalisaki feti monene. \p \v 9 Kasi tango Sara amonaki ete Isimaeli, mwana oyo Agari, moto ya Ejipito, abotelaki Abrayami, azali koseka ; \v 10 ayebisaki Abrayami : « Bengana mwasi mowumbu oyo elongo na mwana na ye ya mobali, pamba te mwana ya mwasi mowumbu oyo, akoki te kokabola libula elongo na Izaki, mwana na ngai ya mobali. » \p \v 11 Tango Abrayami ayokaki bongo, esalaki ye pasi makasi na motema mpo na mwana na ye. \v 12 Kasi Nzambe ayebisaki Abrayami : « Tika koyoka pasi na motema mpo na mwana na yo ya mobali mpe mwasi mowumbu na yo. Yoka nyonso oyo Sara azali koyebisa yo, pamba te ezali na nzela ya Izaki nde okozwa bakitani. \v 13 Nakokomisa mpe mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo ekolo, pamba te ye mpe azali makila na yo. » \p \v 14 Na tongo makasi ya mokolo oyo elandaki, Abrayami azwaki lipa mpe mbeki ya mayi ; apesaki yango na Agari. Atiaki yango likolo ya lipeka na ye, apesaki ye mwana mpe abenganaki ye. Agari akendeki mpe atambolaki bipai na bipai na esobe ya Beri-Sheba. \v 15 Tango mayi oyo ezalaki na mbeki esilaki, Agari asundolaki mwana na se ya nzete moko ya moke. \v 16 Akendeki kovanda na monkama ya bametele, pamba te alobaki : « Nalingi te komona kufa ya mwana na ngai. » Lokola avandaki mosika ya mwana, atombolaki mongongo mpe alelaki. \v 17 Nzambe ayokaki mongongo ya mwana, mpe Anjelu na Nzambe abengaki Agari wuta na likolo. Ayebisaki ye : « Agari, likambo nini ? Kobanga te, pamba te Nzambe ayoki mongongo ya mwana wuta na esika oyo otikaki ye. \v 18 Telema, tombola mwana mpe zwa ye na loboko na yo, pamba te nakokomisa ye ekolo monene. » \p \v 19 Nzambe afungolaki ye miso, mpe amonaki libulu ya mayi. Akendeki kotondisa mbeki mpe amelisaki mwana. \v 20 Nzambe azalaki elongo na mwana. Akolaki, avandaki kati na esobe mpe akomaki mobomi nyama na tolotolo. \v 21 Wana azalaki kovanda kati na esobe ya Parani, mama na ye azwelaki ye mwasi ya mokili ya Ejipito. \s1 Abrayami asali boyokani elongo na Abimeleki \p \v 22 Kaka na tango yango, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bakendeki kokutana na Abrayami ; mpe Abimeleki alobaki na Abrayami : \pi1 — Nzambe azali kolongisa yo na makambo nyonso oyo ozali kosala. \v 23 Bongo sik’oyo, lapa ndayi awa na Kombo ya Nzambe ete okokosa ngai te, bana na ngai te, mpe bakoko na ngai te ; kasi okosalela ngai bolamu elongo na mboka oyo epai wapi ozali kovanda lokola mopaya, ndenge ngai nasaleli yo. \p \v 24 Abrayami azongisaki : \pi1 — Nalapi ndayi ! \p \v 25 Bongo Abrayami alobelaki Abimeleki na tina na libulu ya mayi oyo basali ya Abimeleki babotolaki na makasi. \p \v 26 Abimeleki azongisaki : \pi1 — Nayebi te nani asalaki bongo. Oyebisaki ngai likambo moko te na tina na yango, mpe nayoki yango kaka lelo. \p \v 27 Abrayami azwaki bameme, bantaba, bangombe, mpe apesaki yango na Abimeleki ; bongo bango mibale basalaki boyokani. \v 28 Abrayami atiaki pembeni bana meme sambo oyo azwaki kati na etonga. \v 29 Abimeleki atunaki Abrayami : \pi1 — Bana meme sambo oyo otie pembeni elakisi nini ? \p \v 30 Azongisaki : \pi1 — Ndima bana meme sambo oyo ewuti na maboko na ngai lokola litatoli ete ngai nde natimolaki libulu yango. \p \v 31 Yango wana babengaki esika yango Beri-Sheba\f + \fr 21.31 \fr*\ft Beri-Sheba elakisi : libulu ya ndayi.\ft*\f*, pamba te na esika yango nde bango mibale balapaki ndayi. \p \v 32 Sima na bango kosala boyokani kuna na Beri-Sheba, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bazongaki na mokili ya Filisitia. \v 33 Abrayami alonaki nzete ya tamarisi\f + \fr 21.33 \fr*\ft Tamarisi elakisi : nzete oyo ebimisaka banzete ebele ya mike-mike mpe etiaka kitoko na esika.\ft*\f* na Beri-Sheba mpe abelelaki Yawe, Nzambe ya bileko na bileko. \v 34 Abrayami avandaki lisusu tango molayi na mokili ya Filisitia. \c 22 \s1 Nzambe ameki Abrayami \p \v 1 Na sima na makambo wana, Nzambe amekaki Abrayami. Alobaki na ye : \pi1 — Abrayami ! \p Abrayami azongisaki : \pi1 — Ngai oyo. \p \v 2 Nzambe alobaki na ye : \pi1 — Zwa Izaki, mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko oyo olingaka ; kende na mokili ya Morija, mpe kuna, okopesa Ngai ye lokola mbeka ya kotumba na likolo ya ngomba oyo nakolakisa yo. \p \v 3 Na tongo-tongo, Abrayami atelemaki mpe abongisaki ane na ye. Azwaki basali mibale kati na basali na ye, azwaki mpe Izaki, mwana na ye. Abukaki bakoni mpo na kotumba mbeka, atelemaki mpe akendeki na esika oyo Nzambe ayebisaki ye. \p \v 4 Na mokolo ya misato, Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki esika yango na mosika. \v 5 Bongo Abrayami ayebisaki basali na ye : « Botikala awa elongo na ane, wana ngai elongo na mwana tozali kokende kino kuna na likolo mpo na kogumbamela Nzambe ; sima na yango, tokozongela bino. » \p \v 6 Abrayami azwaki bakoni ya kotumbela mbeka mpe amemisaki yango Izaki, mwana na ye ; mpe ye moko amemaki moto mpe mbeli, bongo bango mibale bakendeki nzela moko. \p \v 7 Izaki atunaki Abrayami, tata na ye : \pi1 — Tata na ngai ! \p Abrayami azongisaki : \pi1 — Ngai oyo ! \p Izaki alobaki : \pi1 — Tozali na moto mpe koni, kasi wapi mpate mpo na mbeka ya kotumba ? \p \v 8 Abrayami azongisaki : \pi1 — Mwana na ngai, Ye moko Nzambe akopesa mpate mpo na mbeka ya kotumba. \p Boye bango mibale bakendeki nzela moko. \p \v 9 Tango bakomaki na esika oyo Nzambe alakisaki ye, Abrayami atongaki etumbelo na esika yango mpe abongisaki bakoni na likolo na yango. Akangaki Izaki, mwana na ye ya mobali, basinga mpe alalisaki ye na etumbelo likolo ya bakoni. \v 10 Boye Abrayami azwaki mbeli mpe asembolaki loboko na ye mpo na koboma mwana na ye ya mobali. \v 11 Kasi anjelu ya Yawe abengaki ye wuta na likolo : \pi1 — Abrayami ! Abrayami ! \p Abrayami azongisaki : \pi1 — Ngai oyo. \p \v 12 Anjelu alobaki : \pi1 — Kosembola loboko na yo te likolo ya mwana, kosala ye mabe te. Nasosoli sik’oyo ete otosaka Nzambe, pamba te oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko. \p \v 13 Abrayami atombolaki miso na ye mpe amonaki meme ya mobali oyo maseke na yango ezalaki ya kokangama na nzete ya moke. Azwaki yango mpe apesaki yango mbeka ya kotumba na esika ya mwana na ye ya mobali. \v 14 Abrayami abengaki esika yango « Nkolo akopesa. » Yango wana balobaka kino lelo : « Na likolo ya ngomba ya Yawe, ekopesama. » \p \v 15 Anjelu ya Yawe abengaki Abrayami na mbala ya mibale wuta na likolo \v 16 mpe alobaki : « Nakati seleka na Kombo na Ngai, elobi Yawe, ete lokola osali likambo ya boye, lokola oboyi te kopesa Ngai mwana na yo ya mobali, mwana na yo se moko, \v 17 nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango. \v 18 Bato ya bikolo nyonso ya mabele bakomipambola mpo na bakitani na yo, pamba te otosi Ngai. » \p \v 19 Abrayami azongaki epai ya basali na ye mpe bakendeki elongo na Beri-Sheba epai wapi akobaki kovanda. \s1 Bana ya Naori \li1 \v 20 Sima na makambo wana, bayebisaki Abrayami ete Milika mpe abotelaki Naori, ndeko ya Abrayami, bana : \li2 \v 21 Mwana na ye ya liboso, Utsi ; Buzi, ndeko na ye mobali ; \li2 Kemweli, tata ya Arami ; \li2 \v 22 Kesedi, Azo, Pilidashi, Yidilafi mpe Betweli. \li3 \v 23 Betweli azalaki tata ya Rebeka. \li4 Milika abotelaki Naori, ndeko mobali ya Abrayami, bana mibali mwambe. \b \li1 \v 24 Makangu ya Naori, oyo kombo na ye ezalaki Reuma, ye mpe abotelaki Naori bana : \li2 Teba, Gami, Taashi mpe Maaka. \c 23 \s1 Kufa ya Sara \p \v 1 Sara awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku mibale na sambo. \v 2 Akufaki na Kiriati-Ariba oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. Abrayami asalaki matanga mpo na Sara mpe alelaki ye. \p \v 3 Abrayami alongwaki liboso ya ebembe ya mwasi na ye mpe asololaki na bato ya Iti. \v 4 Alobaki na bango : \pi1 — Nazali mopaya mpe navandaka kati na bino ; botekela ngai eteni ya mabele kati na bino mpo ete nakunda mwasi na ngai. \p \v 5 Bato ya Iti bazongiselaki Abrayami : \pi1 \v 6 — Yoka biso, nkolo na ngai ; ya solo, ozali moto monene kati na biso. Kunda mwasi na yo kati na kunda oyo eleki kitoko kati na bakunda na biso. Moko te kati na biso akoboya kopesa yo kunda na ye mpo ete okunda mwasi na yo. \p \v 7 Boye, Abrayami atelemaki mpe agumbamaki liboso ya bato ya mboka wana, bato ya Iti. \v 8 Ayebisaki bango : \pi1 — Soki ezali mokano na bino ete nakunda nzoto ya mwasi na ngai awa, boyoka ngai mpe bosengela ngai epai ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari, \v 9 ete atekela ngai libulu na ye ya mabanga oyo ezali na Makipela, na suka ya elanga na ye. Boyebisa ye ete atekela ngai yango na motuya oyo ekoki na yango mpo ete nakomisa yango mabele ya kokunda bato na ngai. \p \v 10 Nzokande, Efroni, moto ya Iti, oyo azalaki kovanda kati na bato na ye, azongiselaki Abrayami na miso ya bato ya Iti, liboso ya bato nyonso oyo bayaki na ekuke ya engumba na ye : \pi1 \v 11 — Te, nkolo na ngai, yoka ngai ! Napesi yo elanga mpe libulu ya mabanga oyo ezali kati na yango. Napesi yo yango liboso ya bato na ngai mpo ete okunda mwasi na yo. \p \v 12 Abrayami agumbamaki liboso ya bato ya mboka \v 13 mpe azongiselaki Efroni : \pi1 — Nabondeli yo, yoka ngai ! Soki olingi, nakopesa yo motuya oyo ekoki na elanga. Ndima yango mpo ete nakunda mwasi na ngai kuna. \p \v 14 Efroni azongiselaki Abrayami : \pi1 \v 15 — Yoka, nkolo na ngai ! Mabele ya motuya ya mbongo ya bibende, nkama minei, ezali penza nini kati na ngai mpe yo ? Kamata mabele yango mpe kunda mwasi na yo. \p \v 16 Abrayami andimaki maloba ya Efroni mpe amemelaki ye motuya oyo alobaki na miso ya bato ya Iti : mbongo ya bibende, nkama minei, kolanda ndenge bazalaki kotanga mbongo na tango wana. \p \v 17 Boye elanga ya Efroni oyo ezalaki na Makipela, pembeni ya Mamire, elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki kati na yango, banzete nyonso oyo ezalaki kati na elanga mpe na bandelo ya zingazinga na yango, epesamaki \v 18 epai ya Abrayami mpe ekomaki ya ye na miso ya bato ya Iti oyo bayaki na ekuke ya engumba. \v 19 Sima na yango, Abrayami akundaki mwasi na ye Sara na libulu ya mabanga ya elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire oyo ezali Ebron, na mokili ya Kanana. \v 20 Bato ya Iti bapesaki Abrayami elanga yango elongo na libulu ya mabanga oyo ezalaki na kati mpo ete ekoma ya ye mpe akundaka bato na ye kuna. \c 24 \s1 Libala ya Izaki mpe Rebeka \p \v 1 Abrayami akomaki mobange mpe mibu ya bomoi na ye epusanaki. Yawe apambolaki ye na makambo nyonso. \v 2 Abrayami alobaki na mosali na ye, oyo awumelaki mingi na ndako na ye mpe azalaki kokamba biloko na ye nyonso : \pi1 — Tia loboko na yo na se ya mopende na ngai \v 3 mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango. \v 4 Kasi okokende na mokili na ngai mpe na libota na ngai, mpe okozwa mwasi moko mpo na Izaki, mwana na ngai ya mobali. \p \v 5 Mosali atunaki ye : \pi1 — Tango mosusu mwasi yango akolinga na ye te kolanda ngai na mokili oyo. Boni, nakoki na ngai kozongisa mwana na yo ya mobali na mokili epai wapi owuta ? \p \v 6 Abrayami alobaki : \pi1 — Keba na yo ! Kozongisa mwana na ngai kuna te. \v 7 Yawe, Nzambe ya likolo, oyo abimisaki ngai na ndako ya tata na ngai mpe na mokili epai wapi nabotama, oyo alobaki na ngai mpe alakaki ngai na nzela ya ndayi ete akopesa mokili oyo na bakitani na ngai, akotindela yo anjelu na Ye mpo ete azala liboso na yo mpe mpo ete okoka koyela mwana na ngai ya mobali mwasi ya mokili wana. \v 8 Soki mwasi yango aboyi na ye kolanda yo, wana okangolami na ndayi oyo nazali kosenga yo kolapa. Kasi komeka kozongisa mwana na ngai ya mobali kuna te. \p \v 9 Boye, mosali atiaki loboko na se ya mopende ya Abrayami, nkolo na ye, alapaki ndayi ya kosala makambo yango. \p \v 10 Bongo mosali azwaki bashamo zomi kati na bashamo ya nkolo na ye elongo na biloko ya ndenge na ndenge oyo eleki kitoko ; akendeki na Arami mpe azwaki nzela ya engumba ya Naori. \v 11 Tango akomaki kuna, avandisaki bashamo pembeni ya libulu ya mayi, na libanda ya engumba. Ezalaki na pokwa, na tango oyo basi babimaka mpo na kotoka mayi. \p \v 12 Abondelaki : « Eh Yawe, Nzambe ya Abrayami, nkolo na ngai, longisa ngai na mokolo ya lelo mpe lakisa bolamu na Yo epai ya Abrayami, nkolo na ngai. \v 13 Tala, natelemi pene ya libulu ya mayi mpe bana basi ya engumba bazali kobima mpo na koya kotoka mayi. \v 14 Tika ete mwana mwasi oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, tengemisa mbeki na yo mpo ete namela mayi, › mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo, › azala mwasi oyo oponi mpo na Izaki, mosali na Yo. Na nzela oyo, nakoyeba ete olakisi bolamu na Yo epai ya nkolo na ngai. » \p \v 15 Liboso ete asilisa kosambela, Rebeka abimaki na mbeki na ye na lipeka. Azalaki mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali ya Milika oyo azalaki mwasi ya Naori, ndeko ya Abrayami. \v 16 Elenge mwasi azalaki kitoko penza, ayebaki nanu nzoto ya mibali te ; ata mobali moko te asangisaki na ye nzoto. Akitaki na libulu ya mayi, atondisaki mbeki na ye mpe amataki. \p \v 17 Mosali akimaki mbangu mpo na kokutana na ye mpe alobaki : \pi1 — Nabondeli yo, tika ngai namela ndambo ya mayi na mbeki na yo. \p \v 18 Mwana mwasi alobaki : \pi1 — Mela na yo, nkolo na ngai ! \p Akitisaki mbeki mbangu na maboko na ye mpe apesaki ye mpo ete amela. \v 19 Sima na kopesa ye mayi ya komela, alobaki : \pi1 — Nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo nyonso kino ekosilisa komela. \p \v 20 Asalaki na lombangu mpe asopaki mayi nyonso ya mbeki na ye na esika oyo banyama emelelaka mayi ; akimaki lisusu na libulu mpe atokaki mayi mpo na bashamo na ye nyonso. \v 21 Mosali azalaki kotala ye na bokebi, alobaki eloko moko te mpo na koyeba soki Yawe alongisi mobembo na ye to te. \p \v 22 Tango bashamo esilisaki komela mayi, mosali azwaki lopete moko ya wolo, oyo batiaka na zolo mpe ezalaki ya bagrame motoba. Azwaki mpe basheneti mibale ya wolo : moko na moko ezalaki na bagrame koleka nkama moko. \v 23 Atunaki ye : \pi1 — Ozali mwana mwasi ya nani ? Nabondeli yo, yebisa ngai. Boni, esika ekoki komonana na ndako ya tata na yo mpo na biso mpo ete tolekisa kuna butu ? \p \v 24 Azongiselaki ye : \pi1 — Nazali mwana ya Betweli, mwana mobali ya Milika mpe Naori. \m \v 25 Abakisaki : \pi1 — Tozali na matiti mpe biloko ebele ya koleisa bibwele ; tozali mpe na esika mpo na yo mpo ete olekisa butu. \p \v 26 Boye, mosali akitisaki moto na ye na se mpe agumbamelaki Yawe. \v 27 Alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, akumisama ; Ye oyo atiki te kolakisa bolamu na Ye mpe boyengebene na Ye epai ya nkolo na ngai, pamba te atambolisi ngai na mobembo kino na ndako ya bandeko ya nkolo na ngai ! » \p \v 28 Elenge mwasi akimaki mbangu na ndako mpe alobaki epai ya mama na ye makambo oyo elekaki. \v 29 Rebeka azalaki na ndeko moko ya mobali oyo kombo na ye ezalaki « Labani. » Ye mpe abimaki mbangu mpo na kokutana na mosali ya Abrayami kuna na libulu ya mayi. \v 30 Tango kaka amonaki lopete oyo batiaki na zolo mpe basheneti na maboko ya ndeko na ye ya mwasi, mpe ayokaki Rebeka koloba makambo oyo mosali alobaki mpo na ye, akendeki epai ya mosali mpo ete amonaki ye ya kotelema pene ya bashamo, pembeni ya libulu ya mayi. \v 31 Alobaki : « Yaka na ndako na biso, yo oyo opambolama na Yawe. Mpo na nini otelemi awa na libanda ? Nabongisi ndako mpe esika mpo na bashamo. » \p \v 32 Boye mosali ya Abrayami akotaki na ndako ya Labani, mpe bakitisaki biloko oyo ezalaki na likolo ya bashamo. Bamemaki bashamo na ye na esika oyo ezalaki na matiti mpe bilei ya banyama. Bamemaki mpe mayi mpo na ye mpe mpo na bato oyo bazalaki elongo na ye mpo ete basukola makolo. \v 33 Batielaki ye lisusu biloko ya kolia, kasi alobaki : \pi1 — Nakoki kolia te kino nakosilisa koloba makambo nyonso oyo nazali na yango. \p Labani alobaki na ye : \pi1 — Yebisa biso makambo yango. \p \v 34 Azongisaki : \pi1 — Nazali mosali ya Abrayami. \v 35 Yawe apambola mingi nkolo na ngai mpe akomisa ye mozwi : apesa ye bameme, bantaba, bangombe, palata mpe wolo, basali ya mibali mpe ya basi, ba-ane mpe bashamo. \v 36 Sara, mwasi ya nkolo na ngai, na kimobange na ye, abotelaki nkolo na ngai mwana mobali, mpe nkolo na ngai apesaki biloko na ye nyonso epai ya mwana yango. \v 37 Nzokande, nkolo na ngai alapisaki ngai ndayi na maloba oyo : « Kati na bana basi ya Kanana epai wapi nazali kovanda, okozwela mwana na ngai mwasi awa te. \v 38 Kasi okokende na libota ya tata na ngai mpe na ekolo na ngai, kuna nde okozwa mwasi mpo na mwana na ngai ya mobali. » \v 39 Nazongiselaki nkolo na ngai : « Tango mosusu, mwasi yango akolinga na ye kolanda ngai te. » \v 40 Mpe ye alobaki na ngai lisusu : « Yawe oyo natambolaki liboso na Ye akotinda anjelu na Ye elongo na yo mpe akolongisa mobembo na yo mpo ete ozwela mwana na ngai ya mobali mwasi oyo akowuta na ekolo na ngai mpe na libota ya tata na ngai. \v 41 Boye tango okokende na ekolo na ngai, soki baboyi kopesa yo ye, okozala na ngambo te na ndayi oyo nalapisi yo. » \v 42 Nzokande lelo, tango nakomaki na libulu ya mayi, nasambelaki : « Oh Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, nabondeli Yo, longisa mobembo na ngai. \v 43 Tala ngai, natelemi pembeni ya libulu oyo ya mayi, elenge mwasi oyo akobima mpo na koya kotoka mayi mpe oyo nakoloba na ye : ‹ Nabondeli yo, nakoki kozwa ndambo ya mayi ya komela na mbeki na yo ? › \v 44 Mpe ye akozongisela ngai : ‹ Mela na yo, mpe nakotoka lisusu mayi mpo na bashamo na yo, › tika ete ye nde azala mwasi oyo Yawe aponi mpo na mwana mobali ya nkolo na ngai. » \v 45 Liboso ete nasilisa kosambela kati na motema na ngai, Rebeka abimaki na mbeki na lipeka na ye. Akitaki na libulu ya mayi mpe atokaki mayi. Nalobaki na ye : « Nabondeli yo, pesa ngai mayi ya komela. » \v 46 Akitisaki mbangu mbeki na ye wuta na lipeka na ye mpe alobaki : « Mela na yo, mpe nakomelisa lisusu bashamo na yo. » Boye namelaki mayi, mpe amelisaki lisusu bashamo mayi. \v 47 Natunaki ye : « Ozali mwana mwasi ya nani ? » Azongisaki : « Nazali mwana mwasi ya Betweli, mwana mobali oyo Milika abotelaki Naori. » Boye natiaki lopete na zolo na ye mpe basheneti na maboko na ye. \v 48 Nakitisaki elongi na se mpe nagumbamelaki Yawe ; nakumisaki Yawe, Nzambe ya nkolo na ngai, Abrayami, oyo atambolisaki ngai na nzela ya sembo mpo na kozwela mwana na ye ya mobali mwana mwasi ya ndeko ya nkolo na ngai. \v 49 Mpe sik’oyo, boyebisa ngai soki bokosalela nkolo na ngai bolamu mpe boyengebene. Soki te, boyebisa ngai mpo ete naluka nzela mosusu. \p \v 50 Labani mpe Betweli bazongisaki : \pi1 — Makambo oyo nyonso ewuti epai na Yawe. Tozali na likambo mosusu te ya koloba na yo. \v 51 Tala Rebeka, azali liboso na yo ! Kamata ye mpe kende na ye ; mpe tika ete azala mwasi ya mwana mobali ya nkolo na yo, ndenge Yawe abongisi. \p \v 52 Tango mosali ya Abrayami ayokaki makambo oyo bayebisaki ye, akitisaki elongi na ye kino na se liboso ya Yawe. \v 53 Abimisaki biloko ya wolo, ya palata mpe bilamba ; bongo apesaki yango na Rebeka. Apesaki mpe bakado ya motuya epai ya ndeko na ye ya mobali mpe epai ya mama na ye. \v 54 Sima na yango, mosali ya Abrayami mpe bato oyo bazalaki elongo na ye baliaki, bamelaki mpe balekisaki butu kati na ndako wana. \p Na tongo, tango balamukaki, mosali ya Abrayami alobaki na bango : \pi1 — Botika ete nazonga epai ya nkolo na ngai. \p \v 55 Ndeko mobali mpe mama ya Rebeka bazongisaki : \pi1 — Tika ete elenge mwasi atikala nanu elongo na biso mikolo zomi, sima nde bokoki kokende. \p \v 56 Kasi alobaki na bango : \pi1 — Bowumisa ngai te, pamba te Yawe alongisi mobembo na ngai ; botika ngai kokende mpo ete nazonga epai ya nkolo na ngai. \p \v 57 Balobaki na ye : \pi1 — Tika ete tobenga elenge mwasi mpe totuna posa na ye. \p \v 58 Babengaki Rebeka mpe batunaki ye : \pi1 — Ondimi solo kokende na mobali oyo ? \p Rebeka azongisaki : \pi1 — Iyo, nandimi. \p \v 59 Boye batikaki ndeko na bango ya mwasi Rebeka ete akende elongo na mama oyo asungaka ye, na mosali ya Abrayami elongo na bato na ye. \v 60 Bapambolaki Rebeka mpe balobaki na ye : \q1 « Ndeko na biso ya mwasi, \q2 tika ete okoma mama ya nkoto ya bato, \q1 mpe tika ete bana na yo bakamata \q2 bingumba ya banguna na bango ! » \p \v 61 Boye Rebeka elongo na basali na ye ya basi batelemaki, bamataki likolo ya bashamo mpe balandaki mosali ya Abrayami. Bongo mosali ya Abrayami akamataki Rebeka mpe bakendeki na ye nzela moko. \p \v 62 Nzokande, Izaki azalaki kovanda na Negevi mpe awutaki na libulu ya mayi na Lakai-Royi. \v 63 Na pokwa, Izaki akendeki na bilanga mpo na kozwa tango ya kokanisa na bozindo. Tango atombolaki miso, amonaki bashamo kopusana pene ya esika oyo azalaki. \p \v 64 Tango Rebeka mpe atombolaki miso, amonaki Izaki mpe akitaki wuta na shamo na ye. \v 65 Atunaki mosali ya Abrayami : \pi1 — Nazali komona mobali moko kati na bilanga, azali koya kokutana na biso ; azali nani ? \p Mosali ya Abrayami azongisaki : \pi1 — Azali nkolo na ngai. \p Bongo Rebeka azwaki vwale na ye mpe amizipaki na elongi. \p \v 66 Mosali ya Abrayami ayebisaki Izaki makambo nyonso oyo asalaki. \v 67 Na yango, Izaki amemaki Rebeka kati na ndako ya kapo ya mama na ye Sara, azwaki ye mpo ete azala mwasi na ye mpe alingaki ye. Boye Izaki abondisamaki na kufa ya mama na ye. \c 25 \s1 Bakitani ya Abrayami \p \v 1 Abrayami abalaki mwasi mosusu, kombo na ye « Ketura. » \p \v 2 Ketura abotelaki ye : Zimirani, Yokishani, Medani, Madiani, Ishibaki mpe Shuwa. \v 3 Yokishani azalaki tata ya Saba mpe Dedani. Tala bato oyo bazalaki bakitani ya Dedani : Bato ya Ashuri, ya Letushi mpe ya Lewumi. \v 4 Madiani azalaki tata ya Efa, ya Eferi, ya Enoki, ya Abida mpe ya Elida. Bato oyo nyonso bazalaki bakitani ya Ketura. \p \v 5 Abrayami atikaki biloko na ye nyonso na maboko ya Izaki. \v 6 Kasi wana Abrayami azalaki nanu na bomoi, apesaki bakado epai ya bana mibali ya bamakangu na ye mpe atindaki bango na mokili ya este, mosika ya mwana na ye ya mobali Izaki. \p \v 7 Abrayami awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku sambo na mitano. \v 8 Bongo Abrayami akataki motema mpe akufaki. Sima na ye kotonda mikolo mpe kokoma mobange makasi, akendeki kokutana na bakoko na ye. \v 9 Bana na ye ya mibali, Izaki mpe Isimaeli, bakundaki ye na lilita ya mabanga ya Makipela pene ya Mamire, kati na elanga ya Efroni, mwana mobali ya Tsoari, moto ya Iti. \v 10 Abrayami asombaki elanga yango epai ya bato ya Iti. Ezalaki kuna nde bakundaki mwasi na ye Sara. \v 11 Sima na kufa ya Abrayami, Nzambe apambolaki Izaki, mwana mobali ya Abrayami. Izaki azalaki kovanda pene ya Lakai-Royi. \s1 Bakitani ya Isimaeli \p \v 12 Tala molongo ya bakitani ya Isimaeli, mwana mobali ya Abrayami, oyo Agari, moto ya Ejipito mpe mwasi mosali ya Sara, abotelaki Abrayami. \b \li4 \v 13 Tala bakombo ya bana mibali ya Isimaeli kolanda ndenge babotamela : \b \li1 Nebayoti, mwana mobali ya liboso ya Isimaeli ; \li1 Kedari, Adibeli, Mibisami, \li1 \v 14 Mishima, Duma, Masa, \li1 \v 15 Adadi, Tema, Yeturi, \li1 Nafishi mpe Kedima. \b \li4 \v 16 Bango nde bazalaki bana mibali zomi na mibale ya Isimaeli. Moko na moko azalaki mokambi ya libota, mpe apesaki kombo na ye na mboka na ye mpe na molako na ye. \b \p \v 17 Isimaeli awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo. Akataki motema mpe akufaki ; akendeki kokutana na bakoko na ye. \v 18 Bakitani na ye bazalaki kovanda na mokili oyo ezalaki kati na Avila mpe Shuri, pene ya Ejipito, na nzela oyo ekenda na Asiri. Bazalaki tango nyonso kovanda lokola banguna ya bandeko na bango nyonso. \s1 Ezawu mpe Jakobi \p \v 19 Tala libota ya Izaki, mwana mobali ya Abrayami. \b \p Abrayami azalaki tata ya Izaki, \v 20 mpe Izaki azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango abalaki Rebeka, mwana mwasi ya Betweli, moto ya Arami ya Padani-Arami, mpe ndeko mwasi ya Labani, moto ya Arami. \p \v 21 Izaki abondelaki Yawe mpo na Rebeka, mwasi na ye, oyo azalaki ekomba. Yawe ayanolaki libondeli na ye, mpe Rebeka akomaki na zemi. \v 22 Kati na libumu na ye, bana bazalaki kowelana. Alobaki : « Likambo nini oyo ekomeli ngai ? » \p Boye, akendeki kotuna Yawe. \p \v 23 Yawe alobaki na ye : \q1 « Bikolo mibale ezali kati na libumu na yo, \q2 mpe mabota mibale ekabwana ekobima na libumu na yo ; \q1 ekolo moko ekoleka ekolo mosusu na makasi, \q2 mpe kulutu akosalela leki. » \p \v 24 Wana tango na ye ya kobota ekokaki, azalaki na mapasa mibale kati na libumu na ye. \v 25 Lipasa ya liboso oyo abimaki azalaki motane mpe nzoto na ye mobimba ezalaki etonda na bapwale lokola elamba ya bapwale ; yango wana babengaki ye « Ezawu. » \v 26 Sima na yango, ndeko na ye mpe abimaki, loboko na ye ekanga litindi ya Ezawu ; yango wana bapesaki ye kombo « Jakobi. » Izaki azalaki na mibu tuku motoba ya mbotama tango Rebeka abotaki. \p \v 27 Bana mibali yango bakolaki. Ezawu akomaki mobomi makasi ya banyama mpe azalaki kolekisa tango mingi na zamba ; Jakobi azalaki moto ya kimia, azalaki kosepela kovanda na ndako. \v 28 Izaki abandaki kosepela mingi na misuni, yango wana alingaki mingi Ezawu ; mpe Rebeka alingaki mingi Jakobi. \p \v 29 Mokolo moko, wana Jakobi azalaki kolamba elubu, Ezawu oyo awutaki na bilanga ayaki na kolemba. \v 30 Ezawu alobaki na Jakobi : \pi1 — Nalembi makasi ; tika ngai nalia elubu oyo, elubu oyo kaka. \p Yango wana bazalaki mpe kobenga ye Edomi. \v 31 Jakobi azongisaki : \pi1 — Tekela ngai liboso boyaya na yo. \p \v 32 Ezawu azongisaki : \pi1 — Tala, nakokufa na nzala. Boyaya na ngai ekopesa ngai nini ? \p \v 33 Kasi Jakobi alobaki : \pi1 — Lapa liboso ndayi. \p Ezawu alapaki ndayi epai ya Jakobi ; mpe na nzela wana, atekaki boyaya na ye epai ya Jakobi. \v 34 Jakobi apesaki Ezawu lipa mpe elubu ya misili. Ezawu aliaki mpe amelaki, bongo atelemaki mpe akendeki. Ezali ndenge wana nde Ezawu atiolaki boyaya na ye. \c 26 \s1 Izaki mpe Abimeleki \p \v 1 Wana nzala makasi ekotaki lisusu na mokili lokola na tango ya Abrayami, Izaki akendeki na Gerari epai ya Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia. \v 2 Boye Yawe abimelaki ye mpe ayebisaki ye : \pi1 — Kokende na Ejipito te ! Vanda na mokili oyo nakolakisa yo. \v 3 Vanda kati na mokili oyo ; nakozala na yo elongo mpe nakopambola yo, pamba te nakopesa mabele oyo nyonso epai na yo mpe epai ya bana na yo ; nakokokisa ndayi oyo nalapaki epai ya Abrayami, tata na yo. \v 4 Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo mpe nakopesa bango mabele oyo nyonso. Boye mpo na bakitani na yo, bikolo nyonso ya mokili ekomipambola. \v 5 Nakosala yango mpo ete Abrayami atosaki Ngai, abatelaki bikateli na Ngai, mitindo na Ngai mpe mibeko na Ngai. \p \v 6 Boye, Izaki avandaki na Gerari. \p \v 7 Tango bato ya esika wana batunaki ye na tina na mwasi na ye, azongisaki : \pi1 — Azali ndeko na ngai ya mwasi. \p Azalaki koloba te ete azali mwasi na ye mpo ete azalaki kobanga ete bato ya mboka baboma ye mpo na Rebeka, pamba te azalaki penza kitoko. \v 8 Tango awumelaki na mboka yango, Abimeleki, mokonzi ya bato ya Filisitia, atalaki wuta na lininisa mpe amonaki Izaki kosakana na mwasi na ye Rebeka. \v 9 Bongo Abimeleki abengisaki ye mpe alobaki na ye : \pi1 — Rebeka azali solo mwasi na yo. Mpo na nini olobaki : « Azali ndeko na ngai ya mwasi ? » \p Izaki azongisaki : \pi1 — Kati na ngai, nazalaki koloba ete nakokaki kokufa mpo na ye. \p \v 10 Abimeleki alobaki lisusu : \pi1 — Nasali bino likambo nini ? Etikalaki kaka moke ete mobali moko kati na bato na ngai akota mpe asangisa nzoto na mwasi na yo. Boye, olingaki komemisa biso ngambo. \p \v 11 Abimeleki apesaki mitindo na bato nyonso : \pi1 — Moto nyonso oyo akosala mabe na moto oyo mpe na mwasi na ye, akokufa. \s1 Izaki avandaki na Beri-Sheba \p \v 12 Izaki alonaki mbuma na mabele oyo mpe abukaki monkama na monkama na oyo alonaki, pamba te Yawe apambolaki ye. \p \v 13 Izaki akomaki mozwi, mpe bozwi na ye ekobaki kaka komata kino akomaki moto na bozwi ebele. \v 14 Bato ya Filisitia bakomaki koyokela ye likunya, pamba te azalaki na bameme ebele, bantaba ebele, bangombe ebele mpe basali ebele. \v 15 Boye bato ya Filisitia bakundaki mabulu nyonso oyo basali ya Abrayami, tata na ye, batimolaki tango azalaki nanu na bomoi mpe batondisaki yango na mabele. \v 16 Bongo Abimeleki alobaki na Izaki : \pi1 — Kende mosika na biso, pamba te okomi na nguya mingi koleka biso. \p \v 17 Izaki alongwaki wana mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo na lubwaku ya Gerari epai wapi avandaki. \v 18 Atimolaki lisusu mabulu ya mayi oyo batimolaki na tango ya tata na ye Abrayami. Mabulu yango ezalaki bato ya Filisitia nde bakundaki yango sima na kufa ya Abrayami, mpe Izaki abengaki yango kaka na bakombo oyo tata na ye Abrayami apesaka yango. \v 19 Basali ya Izaki batimolaki na lubwaku mpe bamonaki kuna libulu ya mayi ya peto. \v 20 Babateli bibwele ya Gerari baswanisaki babateli bibwele ya Izaki mpe balobaki na bango : « Mayi oyo ezali ya biso. » Izaki apesaki libulu yango kombo « Eseki\f + \fr 26.20 \fr*\ft Eseki elakisi : koswana.\ft*\f*, » pamba te baswanisaki ye na tina na yango. \v 21 Batimolaki libulu mosusu, kasi baswanisaki ye lisusu na tina na yango, mpe apesaki yango kombo « Sitina\f + \fr 26.21 \fr*\ft Sitina elakisi : kowelana.\ft*\f*. » \v 22 Alongwaki wana mpe akendeki kotimola libulu mosusu ; mpe moto moko te aswanisaki ye na tina na yango. Yango wana apesaki yango kombo « Reoboti\f + \fr 26.22 \fr*\ft Reoboti elakisi : mokuse.\ft*\f*, » pamba te alobaki : « Sik’oyo, Yawe apesi biso esika monene, mpe tokofuluka na mokili oyo. » \v 23 Kolongwa wana, akendeki na Beri-Sheba. \s1 Izaki asali boyokani elongo na Abimeleki \p \v 24 Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. » \v 25 Kaka na esika yango, Izaki atongaki etumbelo, abelelaki Kombo ya Yawe, atongaki ndako na ye ya kapo. Basali na ye batimolaki libulu mosusu ya mayi. \p \v 26 Wuta na Gerari, Abimeleki elongo na Awuzati, mopesi toli na ye, mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bayaki kokutana na Izaki. \v 27 Izaki atunaki bango : \pi1 — Mpo na nini boyei epai na ngai, bino bato oyo bolingaka ngai te mpe bobenganaki ngai epai na bino ? \p \v 28 Bazongiselaki ye : \pi1 — Tomoni ya solo ete Yawe azali elongo na yo, yango wana tolobaki : « Tika ete tosala boyokani kati na biso mpe yo na nzela ya ndayi. \v 29 Lapa ndayi ete okosala biso mabe te ndenge biso mpe tosalaki yo mabe te ; tosalelaki yo kaka bolamu mpe totikaki yo kokende na kimia. Sik’oyo, Yawe apamboli yo. » \v 30 Izaki asalelaki bango feti monene ; baliaki mpe bamelaki. \v 31 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balapanaki ndayi ; bongo Izaki abimisaki bango na nzela mpe atikaki bango kokende na kimia. \v 32 Kaka na mokolo yango, basali ya Izaki bayaki kopesa ye sango ete bamoni mayi na libulu oyo bazalaki kotimola. \v 33 Izaki apesaki libulu yango kombo « Sheba\f + \fr 26.33 \fr*\ft Sheba elakisi : ndayi.\ft*\f*. » Yango wana engumba yango ebengami kino lelo Beri-Sheba. \b \p \v 34 Tango Ezawu akokisaki mibu tuku minei ya mbotama, abalaki Jiditi, mwana mwasi ya Beri, moto ya mokili ya Iti, mpe Basimati, mwana mwasi ya Eloni, moto ya mokili ya Iti. \v 35 Basi yango bazalaki koyokisa Izaki mpe Rebeka pasi na motema. \c 27 \s1 Izaki apamboli Jakobi \p \v 1 Tango Izaki akomaki mobange mpe miso na ye ezalaki komona lisusu malamu te, abengaki Ezawu, mwana na ye ya liboso ya mobali. Alobaki na ye : \pi1 — Mwana na ngai ! \p Ezawu azongisaki : \pi1 — Ngai oyo ! \p \v 2 Izaki alobaki : \pi1 — Nakomi mobange mpe nayebi mokolo ya kufa na ngai te. \v 3 Yango wana, zwa sik’oyo mandoki na yo ya bokila, saki ya bokila mpe tolotolo ; kende na zamba mpe bomela ngai nyama. \v 4 Okolambela ngai elubu ya kitoko ndenge nalingaka mpe okomemela ngai yango ; nakolia mpo ete napambola yo liboso ete nakufa. \p \v 5 Nzokande, Rebeka azalaki koyoka makambo oyo Izaki azalaki koyebisa mwana na ye Ezawu. Tango Ezawu akendeki na zamba mpo na koboma nyama mpe kozonga na yango, \v 6 Rebeka ayebisaki Jakobi, mwana na ye ya mibale : \pi1 — Tala, nayokaki tata na yo koyebisa Ezawu, ndeko na yo : \v 7 « Memela ngai nyama ! Okolambela ngai elubu ya kitoko, mpe nakolia yango mpo ete napambola yo na miso ya Yawe liboso ete nakufa. » \v 8 Mwana na ngai, yoka ngai malamu sik’oyo mpe sala makambo oyo nakoyebisa yo : \v 9 Kende na etonga ya bibwele mpe pona bana ntaba mibale mpe memela ngai yango mpo ete nalambela tata na yo elubu ya kitoko ndenge alingaka. \v 10 Bongo, okomemela yango tata na yo ; akolia yango mpo ete apambola yo liboso ete akufa. \p \v 11 Jakobi azongiselaki Rebeka, mama na ye : \pi1 — Ezawu, ndeko na ngai, azali na bapwale ebele na nzoto, kasi ngai nazali na yango te. \v 12 Soki tata na ngai asimbi ngai, akososola ete nalingi kokosa ye ; wana nakomibendela bilakeli mabe na esika ete napambolama. \p \v 13 Mama na ye alobaki : \pi1 — Mwana na ngai, tika ete bilakeli mabe yango ekweya likolo na ngai ; yo, sala kaka makambo oyo ngai nayebisi yo. \p \v 14 Boye Jakobi akendeki, azwaki bana ntaba mpe amemaki yango epai ya mama na ye, mpe mama na ye alambaki elubu ya kitoko ndenge tata na ye azalaki kolinga. \v 15 Bongo Rebeka azwaki na ndako, bilamba oyo elekaki kitoko kati na bilamba ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, mpe alatisaki yango Jakobi, mwana na ye ya suka. \v 16 Azipaki ye maboko mpe kingo na poso ya bana ntaba. \v 17 Bongo Rebeka apesaki na maboko ya Jakobi, mwana na ye, elubu ya kitoko mpe lipa oyo alambaki. \p \v 18 Jakobi akendeki epai ya tata na ye mpe alobaki : \pi1 — Tata na ngai ! \p Izaki azongisaki : \pi1 — Ngai oyo, mwana na ngai ; yo nani ? \p \v 19 Jakobi alobaki na tata na ye : \pi1 — Nazali Ezawu, mwana na yo ya liboso. Nasali ndenge oyebisaki ngai. Nabondeli yo, lamuka, vanda mpe lia nyama, mpo ete opambola ngai. \p \v 20 Izaki atunaki mwana na ye : \pi1 — Mwana na ngai, osali ndenge nini mpo ete ozwa nyama noki ? \p Jakobi azongisaki : \pi1 — Ezali Yawe, Nzambe na yo, nde atindaki yango na nzela na ngai. \p \v 21 Izaki alobaki na Jakobi : \pi1 — Mwana na ngai, pusana pembeni na ngai mpo ete nasimba yo mpe nayeba soki ozali solo mwana na ngai Ezawu. \p \v 22 Jakobi akendeki pembeni na ye, bongo Izaki asimbaki ye mpe alobaki : \pi1 — Mongongo ezali ya Jakobi, kasi maboko ezali ya Ezawu. \p \v 23 Tata na ye ayebaki ye te, pamba te maboko ya Jakobi ezalaki na bapwale lokola ya Ezawu, ndeko na ye ; boye apambolaki ye. \v 24 Kasi liboso, atunaki ye : \pi1 — Ozali penza mwana na ngai Ezawu ? \p Jakobi azongisaki : \pi1 — Iyo, ezali ngai solo. \p \v 25 Izaki alobaki : \pi1 — Mwana na ngai, memela ngai nyama na yo mpo ete nalia mpe napambola yo. \p Jakobi amemelaki ye nyama, mpe Izaki aliaki. Amemelaki ye lisusu masanga ya vino mpe amelaki. \p \v 26 Sima, tata na ye, Izaki, alobaki na ye : \pi1 — Mwana na ngai, yaka awa mpe pesa ngai beze. \p \v 27 Jakobi akendeki mpe apesaki ye beze. Tango Izaki ayokaki solo ya bilamba na ye, apambolaki ye na maloba oyo : \q1 « Ah ! Solo ya mwana na ngai ezali \q2 lokola solo ya bilanga oyo Yawe apamboli. \q1 \v 28 Tika ete Nzambe apesa yo mvula ya likolo mpe mabele ya bozwi ; \q2 apesa yo mbuma ya ble mpe vino ebele penza ! \q1 \v 29 Tika ete bikolo esalela yo, \q2 bato bafukamela yo ! \q1 Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, \q2 mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! \q1 Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; \q2 tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! » \s1 Mbano ya Ezawu \p \v 30 Tango Izaki asilisaki kopambola ye, Jakobi atikaki tata na ye ; bongo ndeko na ye, Ezawu, azongaki wuta na bokila. \v 31 Ye mpe alambaki elubu mpe amemaki yango epai ya tata na ye. Alobaki na ye : \pi1 — Tata na ngai, telema mpe lia nyama na ngai mpo ete opambola ngai. \p \v 32 Tata na ye, Izaki, atunaki ye : \pi1 — Yo nani ? \p Azongisaki : \pi1 — Ngai Ezawu, mwana na yo ya liboso. \p \v 33 Bongo Izaki alengaki makasi mpe alobaki : \pi1 — Nani wana abomaki nyama mpe amemelaki ngai yango ? Naliaki yango liboso ete yo oya, mpe napambolaki ye. Boye apambolami solo ! \p \v 34 Tango Ezawu ayokaki maloba ya tata na ye, atombolaki mongongo makasi mpe agangaki. Alobaki na tata na ye : \pi1 — Ah ! Tata na ngai, pambola ngai, pambola ngai mpe lokola ! \p \v 35 Izaki alobaki : \pi1 — Ndeko na yo ayaki na mayele mabe, ayibi mapamboli na yo. \p \v 36 Ezawu alobaki : \pi1 — Mpo ete kombo na ye ezali « Jakobi, » yango wana akosi ngai mbala mibale ? Ya liboso, azwaki boyaya na ngai, mpe tala sik’oyo azwi lisusu mapamboli na ngai ! \p Bongo atunaki : \pi1 — Boni, obombelaki ngai mapamboli te ? \p \v 37 Izaki azongiselaki Ezawu : \pi1 — Tala, nakomisi ye nkolo na yo mpe napesi ye bandeko na ye nyonso lokola basali ; napesi ye ble mpe vino. Mwana na ngai, nasala lisusu nini mpo na yo ? \p \v 38 Ezawu alobaki na tata na ye : \pi1 — Tata na ngai, ozalaki kaka na lipamboli moko wana ? Tata na ngai, pambola ngai mpe ! \p Ezawu atombolaki mongongo na ye mpe alelaki makasi. \v 39 Tata na ye, Izaki, alobaki na ye : \q1 — Okovanda mosika ya mabele oyo ebotaka malamu, \q2 mpe mosika ya mvula ya likolo. \q1 \v 40 Okobika na nzela ya mopanga na yo \q2 mpe okosalela ndeko na yo ya mobali. \q1 Kasi tango okotambola bipai na bipai, \q2 okobuka ekangiseli oyo akotia yo na kingo. \s1 Jakobi akimi epai ya Labani \p \v 41 Ezawu ayinaki Jakobi likolo ya mapamboli oyo azwaki epai ya tata na ye mpe amilobelaki : « Etikali moke tata na ngai akufa ; bongo nakoboma ndeko na ngai Jakobi. » \p \v 42 Tango Rebeka asosolaki makanisi ya Ezawu, mwana na ye ya liboso, abengaki Jakobi, mwana na ye ya suka, mpe alobaki na ye : « Tala, Ezawu, ndeko na yo, azali koluka koboma yo. \v 43 Mwana na ngai, yoka ngai sik’oyo mpe sala makambo oyo nazali koyebisa yo : ‹ Longwa awa mpe kima na mboka Arani, epai ya ndeko na ngai Labani. \v 44 Vanda mwa mikolo epai na ye kino kanda ya ndeko na yo ekosila. \v 45 Tango kanda na ye ekosila mpe akobosana makambo oyo osalaki ye, nakotindela yo maloba mpo ete olongwa kuna mpe ozonga. Mpo na nini nazanga bino mibale mokolo moko ? › » \p \v 46 Rebeka akendeki koyebisa Izaki : « Nalembi mokili likolo ya basi oyo ya mokili ya Iti. Soki Jakobi abali mwasi kati na bana basi ya mokili oyo, tina nazala na bomoi ekozala lisusu te. » \c 28 \p \v 1 Bongo Izaki abengaki Jakobi, apambolaki ye mpe apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana. \v 2 Telema ! Kende mbala moko na Padani-Arami, na ndako ya koko na yo, Betweli, tata ya mama na yo. Zwa mwasi kuna kati na bana basi ya Labani, ndeko ya mama na yo. \v 3 Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso apambola yo, apesa yo bana, akomisa bana na yo ebele mpe okoma lisanga monene ya bato. \v 4 Tika ete apesa na yo mpe na bakitani na yo lipamboli oyo apesaki na Abrayami mpo ete okamata mokili oyo ozali kovanda lokola mopaya, mokili oyo Nzambe apesaki na Abrayami. » \p \v 5 Izaki atindaki Jakobi na nzela na ye, mpe Jakobi akendeki na Padani-Arami epai ya Labani, mwana mobali ya moto ya Arami, Betweli, mpe ndeko mobali ya Rebeka, mama ya Ezawu mpe Jakobi. \p \v 6 Ezawu ayokaki ete Izaki apambolaki Jakobi mpe atindaki ye na Padani-Arami mpo na kobala mwasi ; ayokaki mpe ete, tango apambolaki ye, apesaki ye mitindo oyo : « Okobala mwasi te kati na bana basi ya Kanana. » \v 7 Jakobi atosaki tata na ye mpe mama na ye, mpe akendeki na Padani-Arami. \v 8 Bongo Ezawu asosolaki ete Izaki, tata na ye, azalaki kosepela te na bana basi ya Kanana. \v 9 Boye Ezawu akendeki epai ya Isimaeli, mwana mobali ya Abrayami, mpe abalaki, kobakisa na basi oyo azalaki na bango, Maalati, ndeko mwasi ya Nebayoti. \ms1 Lisolo ya Jakobi \s1 Ndoto ya Jakobi \p \v 10 Jakobi alongwaki na Beri-Sheba mpe akendeki na Arani. \v 11 Tango akomaki na esika moko, apemaki mpo na kolekisa butu. Azwaki libanga moko kati na mabanga oyo ezalaki na esika yango, atiaki yango na se ya moto na ye mpe alalaki. \v 12 Na se ya pongi, alotaki ndoto : Amonaki ematelo moko ebanda na mabele mpe songe na yango etutaki likolo. Ba-anjelu ya Nzambe bazalaki komata mpe kokita na ematelo yango. \v 13 Mpe Yawe atelemaki likolo ya ematelo mpe alobaki na ye : « Nazali Yawe, Nzambe ya koko na yo Abrayami mpe Nzambe ya Izaki. Nakopesa epai na yo mpe na bana na yo mabele oyo, esika olali. \v 14 Bana na yo bakozala ebele lokola putulu ya mabele, bakopanzana na bangambo nyonso : wuta na weste kino na este, wuta na nor kino na sude. Mabota nyonso ya mokili ekomipambola mpo na yo mpe mpo na bakitani na yo. \v 15 Nazali elongo na yo, nakobatela yo bisika nyonso oyo okokende mpe nakozongisa yo na mabele oyo, nakotika yo te kino nakokokisa makambo nyonso oyo nalakaki yo. » \p \v 16 Tango Jakobi alamukaki na pongi, alobaki : « Ya solo penza, Yawe azali na esika oyo mpe ngai nayebaki yango te ! » \p \v 17 Jakobi abangaki mpe abakisaki : « Oyo esika ya somo boye ! Ekoki kozala eloko mosusu te, bobele Ndako ya Nzambe. Awa nde ekuke ya lola. » \p \v 18 Na tongo-tongo, Jakobi azwaki libanga oyo atiaki moto, atelemisaki yango lokola elembo mpe asopaki mafuta na songe na yango. \v 19 Apesaki esika yango kombo « Beteli\f + \fr 28.19 \fr*\ft Beteli elakisi : Ndako ya Nzambe.\ft*\f*. » Na kala, bazalaka kobenga esika yango « Luze. » \v 20 Bongo Jakobi akataki ndayi na koloba : « Soki Nzambe akozala elongo na ngai mpe akobatela ngai na mobembo oyo nazali kosala, mpe soki akopesa ngai bilei mpe bilamba ya kolata ; \v 21 soki nazongi na kimia na ndako ya tata na ngai, wana Yawe akozala Nzambe na ngai, \v 22 libanga oyo natelemisi lokola elembo ekokoma Ndako ya Nzambe mpe nakopesa Ye eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo akopesa ngai. » \c 29 \s1 Jakobi akomi epai ya Labani \p \v 1 Jakobi akobaki mobembo na ye mpe akomaki na mokili ya bato ya este. \v 2 Kuna, amonaki libulu ya mayi kati na elanga mpe bitonga misato ya bameme elali pembeni ya libulu, pamba te bameme ezalaki komela mayi na libulu yango. Libanga moko ya monene ezipaki monoko ya libulu. \v 3 Tango bibwele nyonso ezalaki kosangana wana, babateli bibwele bazalaki kolongola libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe komelisa bameme. Mpe na sima, bazalaki kozongisa libanga na esika na yango, na monoko ya libulu. \v 4 Jakobi atunaki babateli bibwele : \pi1 — Bandeko na ngai ya mibali, bowuti wapi ? \p Bazongisaki : \pi1 — Towuti na Arani. \p \v 5 Atunaki bango lisusu : \pi1 — Boyebi Labani, koko ya Naori ? \p Bazongisaki : \pi1 — Iyo, toyebi ye. \p \v 6 Jakobi abakisaki lisusu : \pi1 — Boni, azali malamu ? \p Bazongisaki : \pi1 — Iyo, azali malamu. Tala kutu Rasheli, mwana na ye ya mwasi, azali koya elongo na bameme. \p \v 7 Kasi Jakobi alobaki : \pi1 — Tala, moyi ezali nanu makasi ; tango ekoki nanu te mpo na kozongisa bibwele. Bomelisa bameme mpe bozonga lisusu koleisa yango matiti. \p \v 8 Bazongisaki : \pi1 — Tokoki kosala yango kaka soki bibwele nyonso esangani ; bongo tokolongola libanga na monoko ya libulu mpe tokomelisa bameme mayi. \p \v 9 Wana azalaki nanu kosolola na bango, Rasheli ayaki elongo na bameme ya tata na ye, pamba te azalaki mwasi mobateli bibwele. \v 10 Tango Jakobi amonaki Rasheli, mwana mwasi ya noko na ye Labani, elongo na bibwele ya Labani, apusanaki, alongolaki libanga na monoko ya libulu ya mayi mpe amelisaki yango mayi. \v 11 Jakobi apesaki Rasheli beze mpe alelaki makasi. \v 12 Jakobi ayebisaki Rasheli : « Nazali mwana ya Rebeka mpe moto ya libota ya tata na yo. » Bongo Rasheli akimaki mbangu mpo na koyebisa tata na ye. \v 13 Tango kaka Labani ayokaki sango na tina na Jakobi, mwana ya ndeko na ye ya mwasi, akendeki mbangu kokutana na ye. Ayambaki ye, apesaki ye beze mpe amemaki ye na ndako na ye ; mpe kuna, Jakobi ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki. \v 14 Labani alobaki na ye : « Solo, ozali penza makila na ngai, moto ya libota na ngai penza ! » Jakobi avandaki elongo na ye sanza mobimba. \s1 Jakobi abali Lea mpe Rasheli \p \v 15 Labani alobaki na Jakobi : \pi1 — Boni, osalela ngai mosala ya ofele mpo ete ozali moto ya libota na ngai ? Yebisa ngai : olingi ete lifuti na yo ezala nini ? \p \v 16 Nzokande, Labani azalaki na bana basi mibale ya mikolo : Lea mpe leki na ye Rasheli. \v 17 Lea azalaki na miso elala kasi Rasheli azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko. \v 18 Jakobi alingaki Rasheli mpe alobaki : \pi1 — Nakosalela yo mibu sambo mpe okopesa ngai Rasheli, mwana na yo ya mwasi oyo ya leki, mpo ete azala mwasi na ngai. \p \v 19 Labani alobaki : \pi1 — Eleki malamu ete napesa ye epai na yo na esika ete napesa ye epai ya mobali mosusu. Vanda awa elongo na ngai. \p \v 20 Jakobi asalaki mibu sambo mpo na kozwa Rasheli na libala, mpe mibu yango emonanaki kaka lokola mwa mikolo epai na ye, pamba te alingaki Rasheli. \p \v 21 Sima, Jakobi alobaki na Labani : \pi1 — Mikolo na ngai ekoki ; pesa ngai mwasi na ngai, pamba te nalingi kozala na ye. \p \v 22 Na boye, Labani abengisaki bato nyonso ya esika wana mpe asalisaki feti. \v 23 Tango pokwa ekomaki, Labani azwaki Lea, mwana na ye ya mwasi, apesaki ye epai ya Jakobi mpe Jakobi asangisaki na ye nzoto. \v 24 Labani apesaki Zilipa, mwasi mosali na ye, epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye. \v 25 Tango tongo etanaki, Jakobi amonaki ete ezalaki nde Lea. Bongo alobaki na Labani : \pi1 — Likambo nini oyo osali ngai ? Boni, ezali mpo na Rasheli te nde ngai nasalelaki yo ? Mpo na nini okosi ngai ? \p \v 26 Labani azongisaki : \pi1 — Na bokoko na biso awa, topesaka te leki na libala liboso ya kulutu. \v 27 Silisa nanu poso ya babalani elongo na ye. Bongo sima, oyo ya leki mpe akopesamela yo soki osaleli ngai lisusu mibu sambo. \p \v 28 Jakobi asalaki bongo : asilisaki poso wana elongo na Lea, sima Labani apesaki ye mwana na ye ya mwasi Rasheli mpo ete azala mwasi na ye. \v 29 Labani apesaki Bila, mwasi mosali na ye, epai ya Rasheli, mwana na ye ya mwasi, lokola mwasi mosali na ye. \v 30 Jakobi asangisaki lisusu nzoto na Rasheli. Alingaki ye mingi koleka Lea. Bongo asalelaki lisusu Labani mibu sambo. \s1 Bana ya Jakobi \p \v 31 Lokola Yawe amonaki ete Jakobi alingaka Lea te, afungolaki ye mabota ; kasi Rasheli azalaki kobota te. \v 32 Boye Lea azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Ribeni ; » alobaki : « Yawe amoni pasi na ngai ; mpe sik’oyo, mobali na ngai akolinga ngai. » \p \v 33 Sima, azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Yawe amoni ete nalingami te, mpe apesi ngai lisusu mwana. » Boye apesaki ye kombo « Simeoni. » \v 34 Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Alobaki : « Na mbala oyo, mobali na ngai akokangama na ngai, pamba te naboteli ye bana mibali misato. » Boye bapesaki ye kombo « Levi. » \v 35 Azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali. Agangaki : « Na mbala oyo, nakokumisa Yawe. » Yango wana apesaki ye kombo « Yuda. » Mpe akataki kobota. \c 30 \p \v 1 Tango Rasheli amonaki ete azali kobotela Jakobi bana te, akomaki na zuwa mpo na ndeko na ye ya mwasi. Boye alobaki na Jakobi : \pi1 — Pesa ngai bana, noki te nakokufa. \p \v 2 Jakobi asilikaki makasi mpo na Rasheli mpe alobaki : \pi1 — Boni, ngai nakomi nde Nzambe oyo akangi yo mabota ? \p \v 3 Rasheli alobaki : \pi1 — Tala Bila, mwasi mowumbu na ngai ; sangisa na ye nzoto mpo ete abotela ngai bana, mpe na nzela na ye, ngai mpe nakoka kotonga libota. \p \v 4 Rasheli apesaki ye Bila, mwasi mosali na ye, mpo ete akoma mwasi na ye. Jakobi asangisaki na ye nzoto, \v 5 mpe Bila akomaki na zemi. Abotelaki Jakobi mwana mobali. \v 6 Rasheli alobaki : « Nzambe alongisi ngai, ayoki kolela na ngai mpe apesi ngai mwana mobali. » Boye apesaki ye kombo « Dani. » \v 7 Sima na yango, Bila, mwasi mosali ya Rasheli, azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale. \v 8 Rasheli alobaki : « Nabundisi ndeko na ngai ya mwasi bitumba ya Nzambe mpe nalongi. » Boye apesaki ye kombo « Nefitali. » \p \v 9 Tango Lea amonaki ete azali kobota lisusu te, azwaki Zilipa, mwasi mosali na ye, mpe apesaki ye epai ya Jakobi mpo ete akoma mwasi na ye. \v 10 Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali. \v 11 Lea alobaki : « Oyo nde esengo ! » Boye apesaki ye kombo « Gadi. » \v 12 Sima na yango, Zilipa, mwasi mosali ya Lea, abotelaki Jakobi mwana mobali ya mibale. \v 13 Lea alobaki : « Oyo esengo ya ndenge nini nakomi na yango ! Pamba te basi bakobenga ngai moto ya esengo. » Boye apesaki ye kombo « Aseri. » \p \v 14 Na eleko ya kokata ble, Ribeni akendeki na bilanga mpe amonaki bambuma ya mandragore\f + \fr 30.14 \fr*\ft Mandragore ezali nzete oyo ebotaka bambuma ya bolingo.\ft*\f* ; amemelaki yango Lea, mama na ye. Bongo Rasheli alobaki na Lea : \pi1 — Nabondeli yo, pesa ngai ndambo ya bambuma ya mandragore oyo mwana na yo amemaki. \p \v 15 Kasi Lea azongiselaki ye : \pi1 — Boni, ndenge ozwi mobali na ngai, ekoki te ? Olingi lisusu kozwa bambuma ya mandragore ya mwana na ngai ? \p Rasheli alobaki na ye : \pi1 — Malamu ! Soki opesi ngai bambuma ya mandragore ya mwana na yo, Jakobi akolala epai na yo na butu ya lelo. \p \v 16 Na pokwa, wana Jakobi awutaki bilanga, Lea akendeki kokutana na ye mpe alobaki na ye : « Okolala epai na ngai, pamba te napesi bambuma ya mandragore ya mwana na ngai mpo na yo. » Boye Jakobi asangisaki na ye nzoto na butu wana. \p \v 17 Nzambe ayokelaki Lea mawa, akomaki na zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya mitano. \v 18 Lea alobaki : « Nzambe apesi ngai lifuti na ngai lokola napesaki mosali na ngai ya mwasi epai ya mobali na ngai. » Boye apesaki ye kombo « Isakari. » \v 19 Lea azwaki lisusu zemi mpe abotelaki Jakobi mwana mobali ya motoba. \p \v 20 Lea alobaki : « Nzambe apesi ngai likabo ya motuya. Sik’oyo, mobali na ngai akopesa ngai lokumu mpo ete naboteli ye bana mibali motoba. » Boye apesaki ye kombo « Zabuloni. » \p \v 21 Sima na mikolo, abotaki lisusu mwana mwasi mpe apesaki ye kombo « Dina. » \p \v 22 Nzambe akaniselaki Rasheli, ayokaki kolela na ye mpe afungolaki ye mabota. \v 23 Akomaki na zemi, abotaki mwana mobali mpe alobaki : « Nzambe alongoli soni na ngai. » \v 24 Apesaki ye kombo « Jozefi, » mpe alobaki : « Tika ete Yawe abakisela ngai mwana mosusu ya mobali ! » \s1 Bibwele ya Jakobi ekomi ebele \p \v 25 Sima na Rasheli kobota Jozefi, Jakobi alobaki na Labani : \pi1 — Pesa ngai nzela mpo ete nazonga na mboka na ngai. \v 26 Pesa ngai mpe basi mpe bana na ngai, ba-oyo mpo na bango nasaleli yo ; bongo nakokende na ngai. Pamba te oyebi malamu mosala makasi oyo nasaleli yo. \p \v 27 Kasi Labani alobaki na ye : \pi1 — Soki nazwi ngolu na miso na yo, nabondeli yo, kokende te ; pamba te nasosoli na bosoloka ete Yawe apamboli ngai na nzela na yo. \m \v 28 Abakisaki : \pi1 — Katela ngai lifuti na yo mpe nakofuta yo yango. \p \v 29 Jakobi alobaki na ye : \pi1 — Oyebi yo moko ndenge nini ngai nasaleli yo mpe ndenge nini, na nzela na ngai, bibwele na yo ekomi ebele. \v 30 Moke oyo ozalaki na yango, liboso ete ngai naya, ekomi ebele penza. Yawe apamboli yo na nzela na ngai. Kasi sik’oyo, nakosala tango nini mpo na libota na ngai moko ? \p \v 31 Labani atunaki ye : \pi1 — Nasengeli kopesa yo nini ? \p Jakobi azongisaki : \pi1 — Okopesa ngai eloko te. Kasi soki olingi kosala likambo oyo mpo na ngai, nakokoba koleisa mpe kobatela bibwele na yo. \v 32 Lelo, nakoleka na kati-kati ya bibwele na yo, nakolongola kati na bana meme, bameme nyonso ya madodo-madodo mpe oyo ezali ya banzela-nzela ya mwindo ; mpe lisusu kati na bantaba nyonso ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe. Wana nde ezala lifuti na ngai. \v 33 Boye bosembo na ngai ekomonana sima na mikolo tango okoya kotala lifuti na ngai. Soki omoni epai na ngai ntaba ezanga madodo to ezanga banzela ya pembe to mwana meme ezanga madodo to ezanga banzela ya mwindo, wana ekozala lokola nayibi yango. \p \v 34 Labani alobaki : \pi1 — Iyo ! Tika ete ezala ndenge olobi. \p \v 35 Kaka na mokolo wana, Labani alongolaki kati na bibwele, bantaba ya mibali ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, bantaba nyonso ya basi ya madodo-madodo mpe ya banzela-nzela ya pembe, mpe bibwele nyonso oyo ezalaki mwa pembe mpe mwa mwindo kati na bana meme. Apesaki yango na maboko ya bana na ye ya mibali. \v 36 Sima, Labani atambolaki mikolo misato mpo na kokabwana na Jakobi, wana Jakobi akobaki kobatela ndambo ya bibwele ya Labani oyo etikalaki. \p \v 37 Jakobi azwaki bitape ya mobesu ya nzete ya pepiliye, ya amande mpe ya platane. \v 38 Bongo atiaki kati na basani mpe kati na bimelelo, liboso ya bibwele, bitape oyo apalolaki, na esika oyo bibwele ezalaki koya komela mayi. Wana bibwele ya basi ezalaki koyoka posa ya mayi, ezalaki mpe koyoka posa ya kosangisa nzoto na bibwele ya mibali. \v 39 Boye, bibwele ezalaki koya kosangisa nzoto liboso ya bitape wana ; mpe tango ezalaki kobota, bana na yango ezalaki na banzela-nzela ya pembe, banzela-nzela ya mwindo mpe madodo-madodo. \v 40 Jakobi atiaki pembeni bana meme mpe atindaki yango na esika oyo bana meme ya nzela-nzela mpe ya mwa mwindo ezalaki ; pamba te yango ezalaki kobotama mingi kati na bibwele ya Labani. Ezali boye nde akomaki na bibwele ya ye moko oyo asangisaki te na bibwele ya Labani. \v 41 Tango nyonso bibwele ya basi, oyo ezalaki na nzoto minene, ezalaki na posa ya kosangisa nzoto, Jakobi azalaki kotia liboso ya bibwele yango bitape ya nzete kati na basani oyo yango ezalaki komelela mayi mpo ete esangisa nzoto pembeni ya bitape wana. \v 42 Kasi, na esika yango, azalaki kotia te bibwele oyo ekonda. Boye bibwele oyo ekonda ezalaki ya Labani, mpe oyo ya minene ezalaki ya Jakobi. \v 43 Na nzela wana nde moto oyo akomaki na bozwi mingi koleka. Azwaki bibwele ebele, basali ya basi mpe ya mibali, bashamo mpe ba-ane. \c 31 \s1 Jakobi akimi Labani \p \v 1 Jakobi ayokaki bana mibali ya Labani koloba : « Jakobi azwi biloko nyonso ya tata na biso mpe ezali na nzela ya biloko yango nde akomi na bozwi oyo nyonso. » \v 2 Jakobi amonaki lisusu ete ezaleli ya Labani epai na ye etikalaki lisusu te ndenge ezalaki liboso. \p \v 3 Yawe ayebisaki Jakobi : « Zonga na mboka ya batata na yo, epai ya bandeko na yo, mpe nakozala na yo elongo. » \p \v 4 Boye Jakobi abengisaki Rasheli mpe Lea na bilanga epai wapi azalaki elongo na bibwele. \v 5 Alobaki na bango : \pi1 — Namoni ete ezaleli ya tata na bino epai na ngai etikali lisusu te ndenge ezalaki liboso ; kasi Nzambe ya tata na ngai azalaki elongo na ngai. \v 6 Boyebi bino moko ete nasalelaki tata na bino na makasi na ngai nyonso. \v 7 Kasi ye asakanaki na ngai na kobongola lifuti na ngai mbala zomi. Atako bongo, Nzambe apesaki ye nzela te ya kosala ngai mabe. \v 8 Tango azalaki koloba : « Bibwele ya nzela-nzela ekozala lifuti na yo, » bibwele nyonso ezalaki kobota bana ya nzela-nzela. Mpe tango azalaki koloba : « Bibwele ya madodo-madodo nde lifuti na yo, » bibwele nyonso ezalaki kobota bana ya madodo-madodo. \v 9 Ezalaki bongo nde Nzambe azalaki kobotola bibwele ya tata na bino mpe kopesa ngai yango. \v 10 Bongo, na tango oyo bibwele esengelaki kosangisa nzoto, namonaki na ndoto ete bantaba ya mibali, oyo ezalaki kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezalaki ya madodo-madodo, ya banzela-nzela ya mwindo mpe ya banzela-nzela ya pembe. \v 11 Anjelu na Nzambe alobaki na ngai kati na ndoto : « Jakobi ! » Mpe ngai nazongisaki : « Ngai oyo, nazali awa. » \v 12 Alobaki na ngai : « Tombola miso mpe tala : bantaba nyonso ya mibali, oyo ezali kosangisa nzoto na bantaba ya basi, ezali na madodo-madodo, na banzela-nzela ya mwindo mpe na banzela-nzela ya pembe ; pamba te namoni makambo nyonso oyo Labani asali yo. \v 13 Nazali Nzambe ya Beteli epai wapi osopaki mafuta na likolo ya libanga oyo otelemisaki lokola elembo mpe olapaki ndayi liboso na Ngai. Sik’oyo, telema, wuta na mokili oyo, mpe zonga na mokili na yo epai wapi obotama. » \p \v 14 Rasheli mpe Lea bazongisaki : \pi1 — Boni, tozali lisusu na eloko to na libula kati na ndako ya tata na biso ? \v 15 Azalaki komona biso lokola bapaya, pamba te atekaki biso mpe aliaki mbongo na mito na biso. \v 16 Yango wana, bozwi nyonso oyo Nzambe abotolaki tata na biso ekomi ya biso na bana na biso. Sik’oyo, sala makambo nyonso oyo Nzambe ayebisaki yo. \p \v 17 Boye Jakobi amatisaki bana na ye mpe basi na ye likolo ya bashamo. \v 18 Amemaki bibwele na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki, bibwele oyo azwaki tango avandaki na Padani-Arami, mpo na kozonga epai ya Izaki, tata na ye, na mokili ya Kanana. \v 19 Nzokande tango Labani akendeki kolongola bapwale ya bameme na ye, Rasheli ayibaki banzambe ya bikeko ya tata na ye. \v 20 Boye Jakobi akosaki Labani, moto ya Arami, pamba te atikalaki koyebisa ye te ete akokende. \v 21 Akimaki elongo na nyonso oyo ezalaki ya ye, akatisaki ebale mpe akendeki na mokili ya bangomba ya Galadi. \s1 Labani alandi Jakobi \p \v 22 Sima na mikolo misato, bayebisaki Labani ete Jakobi asili kokima. \v 23 Boye Labani azwaki elongo na ye bandeko na ye ya mibali, alandaki Jakobi mikolo sambo mpe akangaki ye na mokili ya bangomba ya Galadi. \v 24 Na butu, Nzambe ayaki epai ya Labani, moto ya Arami, kati na ndoto ; alobaki na ye : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. » \p \v 25 Labani akangaki Jakobi, sima na Jakobi kotonga ndako na ye ya kapo kati na mokili ya bangomba ya Galadi. Boye Labani elongo na bandeko na ye ya mibali bavandaki mpe wana. \v 26 Labani alobaki na Jakobi : \pi1 — Makambo nini osali ngai ? Okosi ngai mpe omemi bana na ngai ya basi lokola bakangami ya bitumba ! \v 27 Mpo na nini okimi na nkuku mpe okosi ngai ? Mpo na nini oyebisaki ngai te ? Nalingaki kutu kotika yo kokende na esengo elongo na banzembo, na makelele ya bambunda mpe ya lindanda. \v 28 Otikeli ngai ata tango te ya kopesa beze na bakoko na ngai mpe na bana na ngai ya basi ! Osali penza lokola moto ya liboma ! \v 29 Tala, nazali na makoki ya kosala yo mabe, kasi na butu oyo eleki, Nzambe ya tata na yo alobaki na ngai : « Keba ! Komeka koloba ata likambo moko te ya malamu to ya mabe epai ya Jakobi. » \v 30 Sik’oyo, lokola okeyi mpo ete ozalaki na posa ya ndako ya tata na yo, mpo na nini oyibi banzambe na ngai ? \p \v 31 Jakobi azongiselaki Labani : \pi1 — Nabangaki, pamba te nakanisaki ete okobotola ngai bana na yo ya basi na makasi. \v 32 Kasi tika ete moto oyo okokuta awa na banzambe na yo akufa. Na miso ya bandeko na biso ya mibali, luka epai na ngai nyonso oyo ezali ya yo mpe zwa yango. \p Nzokande, Jakobi ayebaki te ete ezalaki Rasheli nde moto ayibaki banzambe yango. \p \v 33 Labani akotaki na ndako ya kapo ya Jakobi, na ndako ya kapo ya Lea, mpe na ndako ya kapo ya basi bawumbu mibale ; kasi amonaki eloko te. Sima na ye kobima na ndako ya kapo ya Lea, akotaki na oyo ya Rasheli. \v 34 Nzokande Rasheli azwaki banzambe ya Labani, abombaki yango likolo ya shamo mpe avandaki na likolo na yango. Labani alukaki kati na ndako mobimba ya kapo, kasi amonaki eloko moko te. \p \v 35 Rasheli alobaki na tata na ye : \pi1 — Tika ete nkolo na ngai asilika te soki nakoki kotelema te na miso na yo, pamba te nazali na mikolo ya sanza oyo ekomelaka basi nyonso. \p Labani alukaki, kasi amonaki banzambe yango te. \v 36 Bongo Jakobi asilikaki mpe aswanisaki Labani. Alobaki na ye : \pi1 — Mbeba nini nasalaki ? Lisumu nini nasalaki mpo ete olanda ngai na kanda boye ? \v 37 Tango oluki kati na biloko na ngai nyonso, eloko nini ya ndako na yo omoni ? Tia yango awa liboso ya bandeko na yo ya mibali mpe ya ngai mpo bakatela biso mibale likambo. \v 38 Nasalaki epai na yo mibu tuku mibale ; bameme na yo mpe bantaba na yo elongwaki zemi te, mpe natikalaki te kolia bameme ya mibali kati na bibwele na yo. \v 39 Namemelaki yo nyama moko te oyo banyama ya zamba ebomaki. Ngai moko nazalaki kofuta yango. Ozalaki kofutisa ngai oyo bazalaki koyiba ngai na moyi to na butu. \v 40 Moyi ezalaki kobeta ngai na mokolo, malili ezalaki kokanga ngai na butu, mpe pongi ezalaki kokima ngai na miso. \v 41 Navandi na ndako na yo mibu tuku mibale : nasalelaki yo mibu zomi na minei mpo na bana na yo mibale ya basi, mpe mibu motoba mpo na bibwele na yo ; mbala zomi obongolaki lifuti na ngai. \v 42 Soki Nzambe ya tata na ngai, Nzambe ya Abrayami mpe oyo Izaki abangaka, azalaki elongo na ngai te, ya solo, olingaki kozongisa ngai lelo maboko pamba. Kasi Nzambe amonaki minyoko na ngai mpe pasi ya mosala ya maboko na ngai, yango wana apamelaki yo na butu oyo eleki. \s1 Jakobi asali boyokani elongo na Labani \p \v 43 Labani azongiselaki Jakobi : \pi1 — Basi oyo bazali bana na ngai ya basi, bana oyo bazali bana na ngai, bibwele oyo ezali ya ngai mpe nyonso oyo ozali komona ezali ya ngai. Bongo lelo, eloko nini nakoki kosala mpo na bana na ngai ya basi mpe mpo na bana oyo bango baboti ? \v 44 Sik’oyo Jakobi, tosala boyokani kati na yo mpe ngai, mpe tika ete yango ezala litatoli kati na biso. \p \v 45 Boye Jakobi azwaki libanga mpe atelemisaki yango lokola elembo. \v 46 Jakobi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Bolokota mabanga ! » Balokotaki mabanga, batiaki yango liboke, mpe bango nyonso baliaki wana na likolo ya liboke ya mabanga. \v 47 Labani abengaki esika yango Yegari-Saduta mpe Jakobi abengaki yango Galedi. \p \v 48 Labani alobaki : \pi1 — Lelo, liboke oyo ya mabanga ezali litatoli kati na yo mpe ngai. \p Yango wana babengaki yango Galedi. \v 49 Babengaki yango lisusu Mitsipa ; pamba te Labani alobaki lisusu : « Tika ete Yawe akengelaka kati na yo mpe ngai tango tokomonana lisusu te. \v 50 Soki onyokoli bana na ngai ya basi mpe soki ozwi basi mosusu likolo na bana na ngai ya basi, atako moto moko te akozala kati na biso, kasi yeba ete Nzambe nde azali motatoli kati na yo mpe ngai. » \p \v 51 Labani alobaki lisusu na Jakobi : \pi1 — Tala liboke oyo ya mabanga mpe libanga ya elembo oyo natelemisi kati na ngai mpe yo. \v 52 Liboke oyo ya mabanga ezali motatoli, mpe libanga oyo ya elembo ezali motatoli. Nasengeli te kokatisa liboke oyo ya mabanga mpe libanga oyo ya elembo mpo ete naya kosala yo mabe na ngambo na yo ; mpe yo osengeli te kokatisa liboke ya mabanga mpe libanga ya elembo mpo na koya kosala ngai mabe na ngambo na ngai. \v 53 Tika ete Nzambe ya Abrayami mpe Nzambe ya Naori, Nzambe ya tata na bango, azala Mosambisi kati na biso ! \p Bongo Jakobi alapaki ndayi na Kombo ya Nzambe oyo tata na ye, Izaki, azalaki kobanga. \v 54 Jakobi abonzaki mbeka likolo ya ngomba mpe abengisaki bandeko na ye ya mibali mpo na kolia bilei. Tango basilisaki kolia, balekisaki butu na esika wana, likolo ya ngomba. \s1 Jakobi abangi kokutana na Ezawu \p \v 55 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Labani apesaki bakoko na ye mpe bana na ye ya basi beze ; apambolaki bango mpe azongaki na ndako na ye. \c 32 \p \v 1 Wana Jakobi azalaki kokoba mobembo na ye, ba-anjelu ya Nzambe bayaki kokutana na ye. \v 2 Tango Jakobi amonaki bango, alobaki : « Oyo ezali molako ya Nzambe ! » Mpe abengaki esika yango : Maanayimi\f + \fr 32.3 \fr*\ft Maanayimi elingi koloba : milako mibale.\ft*\f*. \p \v 3 Jakobi atindaki bantoma liboso na ye epai ya Ezawu, ndeko na ye, na mokili ya Seiri, kati na zamba ya Edomi. \v 4 Apesaki bango malako oyo : « Tala makambo oyo bokoloba epai ya nkolo na ngai Ezawu : ‹ Mosali na yo Jakobi alobi : ‘ Navandaki epai ya Labani mpe natikalaki kuna kino sik’oyo. \v 5 Nazali na bangombe, ba-ane, bameme, bantaba, basali ya mibali mpe ya basi ; natindi sango oyo epai ya nkolo na ngai mpo ete nazwa ngolu na miso na ye. ’ › » \p \v 6 Tango bantoma bazongaki epai ya Jakobi, balobaki : « Tokendeki epai ya Ezawu, ndeko na yo, mpe sik’oyo azali koya elongo na bato nkama minei mpo na kokutana na yo. » \p \v 7 Na kobanga makasi mpe na komitungisa, Jakobi akabolaki bato oyo bazalaki elongo na ye na masanga mibale ; ndenge moko mpe mpo na bameme, bantaba mpe bashamo. \v 8 Azalaki komilobela : « Soki Ezawu abundisi lisanga moko, lisanga oyo etikali ekoki kokima. » \p \v 9 Sima, Jakobi abondelaki : « Oh Nzambe ya Abrayami, tata na ngai ! Nzambe ya Izaki, tata na ngai ! Oh Yawe, Yo oyo olobaki na ngai : ‹ Zonga na mokili na yo, na libota na yo, mpe Ngai nakosalela yo bolamu. › \v 10 Nazali nani mpo ete otalisa ngai mosali na Yo bolamu mpe bosembo nyonso oyo ! Nazalaki kaka na lingenda tango nakatisaki Yordani, kasi sik’oyo nazali na masanga mibale. \v 11 Nabondeli Yo, kangola ngai na maboko ya ndeko na ngai, Ezawu, pamba te nazali kobanga ete aya kobundisa ngai elongo na bamama mpe bana na bango. \v 12 Nzokande, Yo olobaki na ngai : ‹ Ya solo nakosalela yo bolamu mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola zelo ya ebale monene, oyo moto moko te akoki kotanga. › » \p \v 13 Jakobi alekisaki butu na esika wana. Kati na biloko oyo azalaki na yango, aponaki kado mpo na Ezawu, ndeko na ye : \v 14 bantaba ya basi nkama mibale mpe bantaba ya mibali tuku mibale, bameme ya basi nkama mibale mpe bameme ya mibali tuku mibale, \v 15 shamo ya basi tuku misato elongo na bana na yango, bangombe ya basi tuku minei mpe bangombe ya mibali zomi, ba-ane ya basi tuku mibale mpe ya mibali zomi. \v 16 Akabolaki yango na bitonga mpe apesaki yango epai ya basali na ye. Alobaki na bango : « Boleka liboso na ngai mpe botia etonga moko mosika na mosusu. » \p \v 17 Jakobi apesaki mitindo oyo epai ya mosali na ye ya liboso : « Tango Ezawu, ndeko na ngai, akokutana na yo mpe akotuna yo : ‹ Yo ozali mosali ya nani, ozali kokende wapi mpe nani nkolo ya banyama nyonso oyo ezali liboso na yo ? › \v 18 Okozongisa : ‹ Ezali ya Jakobi, mosali na yo, ezali kado oyo atindeli nkolo na ngai Ezawu. Mpe tala ye moko azali koya sima na biso. › » \p \v 19 Apesaki lisusu mitindo wana epai ya mosali ya mibale, ya misato mpe epai ya basali nyonso oyo bazalaki kolanda bibwele : « Bokoloba kaka maloba moko tango bokokutana na Ezawu. \v 20 Bokoyebisa ye lisusu : ‹ Tala ye moko Jakobi, mosali na yo, azali koya na sima na biso ! › » Pamba te azalaki komilobela : « Nakokitisa kanda na ye na kado oyo natindi liboso na ngai ; sima tango nakokutana na ye, mbala mosusu akoyamba ngai malamu. » \p \v 21 Boye kado ya Jakobi ekendeki liboso, kasi ye moko alekisaki butu kati na Molako. \s1 Jakobi abundi na Nzambe \p \v 22 Na butu wana, Jakobi alamukaki, azwaki basi na ye mibale, basali na ye mibale ya basi, bana na ye zomi na moko mpe akatisaki mayi ya Yaboki. \v 23 Sima na kokatisa bango mayi, akatisaki mpe biloko na ye nyonso. \v 24 Jakobi atikalaki kaka ye moko. Bongo moto moko abundaki na ye kino tango tongo elingaki kotana. \v 25 Wana moto yango amonaki ete akoki kolonga Jakobi te, abetaki Jakobi na loketo mpe mokuwa ya loketo na ye ebukanaki tango bazalaki kobunda. \v 26 Sima, moto yango alobaki : \pi1 — Tika ngai nakende, pamba te tongo elingi kotana. \p Kasi Jakobi azongisaki : \pi1 — Nakotika yo te kokende soki opamboli ngai te. \p \v 27 Moto yango atunaki Jakobi : \pi1 — Kombo na yo nani ? \p Jakobi azongisaki : \pi1 — Kombo na ngai ezali Jakobi. \p \v 28 Moto yango alobaki lisusu : \pi1 — Kobanda lelo, kombo na yo ekozala lisusu Jakobi te, kasi Isalaele, pamba te obundi na Nzambe mpe na bato, bongo olongi. \p \v 29 Jakobi alobaki : \pi1 — Nabondeli yo, yebisa ngai kombo na yo. \p Azongiselaki ye : \pi1 — Mpo na nini ozali kotuna kombo na ngai ? \p Boye apambolaki ye na esika wana. \v 30 Jakobi abengaki esika yango « Penieli, » pamba te alobaki : « Namoni Nzambe na miso na ngai, mpe bomoi na ngai ebiki. » \p \v 31 Tango moyi ebimaki, Jakobi alekaki Penueli. Azalaki kotambola tengu-tengu mpo na loketo na ye. \v 32 Yango wana kino lelo, bana ya Isalaele baliaka mosuni ya mopende te, pamba te Nzambe abetaki Jakobi na mosuni oyo ekangami na mokuwa ya loketo. \c 33 \s1 Jakobi akutani na Ezawu \p \v 1 Tango Jakobi atombolaki miso na ye, amonaki na mosika Ezawu koya elongo na bato nkama minei. Boye Jakobi akabolaki bana na ye : ndambo epai ya Lea, ndambo epai ya Rasheli mpe ndambo mosusu epai ya basali mibale ya basi. \v 2 Atiaki basali ya basi elongo na bana na bango na liboso ; Lea mpe bana na ye na sima ; mpe Rasheli na Jozefi na suka. \v 3 Ye moko alekaki liboso na bango mpe afukamaki na mabele mbala sambo wana azalaki kopusana liboso ya ndeko na ye ya mobali. \p \v 4 Ezawu akimaki mbangu mpo na kokutana na ye ; ayambaki ye, amibwakaki na nzoto na ye mpo na koyamba ye mpe apesaki ye beze ; bongo bakomaki kolela. \v 5 Tango atombolaki miso na ye, amonaki na mosika basi mpe bana. Atunaki : \pi1 — Banani wana bazali elongo na yo ? \p Jakobi azongisaki : \pi1 — Ezali bana oyo Nzambe apesi, na bolingo na Ye, epai ya mosali na yo. \p \v 6 Boye, basali ya basi elongo na bana na bango bapusanaki mpe bafukamaki. \v 7 Na sima, Lea elongo na bana na ye bayaki kofukama. Bongo na suka, Jozefi elongo na Rasheli bayaki mpe kofukama. \p \v 8 Ezawu atunaki : \pi1 — Ngulupa nyonso oyo nakutani na yango, tina na yango nini ? \p Jakobi azongisaki : \pi1 — Ezali mpo ete nazwa ngolu na miso na yo, nkolo na ngai. \p \v 9 Kasi Ezawu azongisaki : \pi1 — Ndeko na ngai, biloko nyonso oyo, nazali na yango ebele ; bomba biloko na yo mpo na yo moko. \p \v 10 Jakobi alobaki : \pi1 — Nabondeli yo : soki nazwi ngolu na miso na yo, ndima kozwa biloko oyo lokola kado kowuta na maboko na ngai ; pamba te ndenge namoni yo, ezali lokola namoni Nzambe, mpo ete oyambi ngai na boboto. \v 11 Nabondeli yo penza, ndima makabo oyo namemeli yo ; pamba te Nzambe nde apesaki ngai yango na ngolu na Ye mpe nazali na nyonso. \p Lokola Jakobi azalaki kaka kotia molende, Ezawu andimaki kozwa yango. \p \v 12 Ezawu alobaki : \pi1 — Telema tokende, nakotambola na yo nzela moko. \p \v 13 Kasi Jakobi azongiselaki ye : \pi1 — Oh nkolo na ngai ! Oyebi malamu ete bana bazwi nanu makasi te, mpe nazali lisusu na bameme, bangombe mpe bantaba ya basi oyo ezali nanu komelisa mabele. Soki tomeki kotambolisa yango mbangu makasi kaka na mokolo moko, bibwele nyonso ekokufa. \v 14 Boye, tika ete nkolo na ngai akende liboso, wana ngai nakotambola malembe-malembe na sima, kolanda etamboli ya bibwele oyo ezali liboso na ngai, mpe kolanda etamboli ya bana, kino nakokoma epai ya nkolo na ngai, na Seiri. \p \v 15 Ezawu alobaki : \pi1 — Nabondeli yo, ndima ete natikela yo ndambo ya bato na ngai. \p Kasi Jakobi atunaki : \pi1 — Mpo na nini kosala bongo ? Tika ete nazwa kaka ngolu na miso ya nkolo na ngai ! \p \v 16 Boye, kaka na mokolo wana, Ezawu azwaki nzela mpe azongaki na Seiri. \v 17 Nzokande, Jakobi akendeki na Sukoti. Atongaki kuna ndako mpo na ye moko mpe mpo na bibwele na ye ; yango wana babengi esika yango Sukoti. \p \v 18 Longwa na mokili ya Padani-Arami, Jakobi akomaki na kimia na engumba Sishemi oyo ezali na mokili ya Kanana ; mpe atelemisaki ndako na ye ya kapo liboso ya engumba. \v 19 Na motuya ya bibende ya palata nkama moko, asombaki na maboko ya bana mibali ya Amori, tata ya Sishemi, eteni ya mabele epai wapi atongaki ndako na ye ya kapo. \v 20 Atongaki kuna etumbelo moko oyo abengaki : « El, Nzambe ya Isalaele. » \c 34 \s1 Dina mpe bato ya Sishemi \p \v 1 Nzokande, Dina, mwana mwasi oyo Lea abotelaki Jakobi, abimaki mpo na kokende kotala basi ya mokili wana. \v 2 Tango Sishemi, mokambi ya mokili wana mpe mwana mobali ya Amori, moto ya Evi, amonaki ye, akangaki ye mpe asangisaki na ye nzoto na makasi. \v 3 Motema na ye emipesaki mobimba epai ya Dina, mwana mwasi ya Jakobi, alingaki ye mpe akomaki koloba na ye maloba ya bolingo. \v 4 Sishemi alobaki na Amori, tata na ye : « Balela ngai elenge mwasi oyo. » \p \v 5 Tango Jakobi ayokaki ete lokumu ya Dina, mwana na ye ya mwasi, ebebisami, abatelaki kimia kino bana na ye ya mibali bazongaki na ndako, pamba te bazalaki na esobe elongo na bibwele. \p \v 6 Boye, Amori, tata na Sishemi, akendeki kosolola na Jakobi. \v 7 Tango bana mibali ya Jakobi bazongaki wuta na esobe, bayokaki sango ya makambo oyo esalemaki. Bongo, bayokaki pasi mingi na mitema mpe basilikaki makasi, pamba te Sishemi asalaki likambo ya soni na Isalaele, wana asangisaki nzoto na makasi na mwana mwasi ya Jakobi. Likambo ya bongo esengelaki kosalema te. \p \v 8 Kasi Amori alobaki na bango : « Motema ya Sishemi, mwana na ngai ya mobali ezali kopela na bolingo mpo na mwana na bino ya mwasi. Nabondeli bino, bopesa ye na libala mpo na Sishemi. \v 9 Na bongo, bokoki kosala elongo na biso boyokani na nzela ya libala : bokobalisa biso bana na bino ya basi mpe biso tokobalisa bino bana na biso ya basi, \v 10 bokovanda elongo na biso. Mboka ezali liboso na bino, bovanda, bosala mombongo mpe bokoma bankolo mabele. » \p \v 11 Boye, Sishemi alobaki na tata mpe na bandeko mibali ya Dina : \pi1 — Tika ete nazwa ngolu na miso na bino mpe nakopesa bino nyonso oyo bokosenga ngai. \v 12 Bokatela ngai motuya makasi ya mbongo ya libala mpe biloko ebele ya libala ; nakofuta bino eloko nyonso oyo bokosenga ngai. Kasi bopesa ngai kaka elenge mwasi oyo na libala. \p \v 13 Lokola lokumu ya Dina, ndeko mwasi na bango, ebebaki, bana mibali ya Jakobi basalelaki mayele mabe mpo na kopesa eyano epai ya Sishemi mpe tata na ye Amori. \v 14 Balobaki na bango : \pi1 — Tokoki kosala likambo ya boye te, tokoki te kopesa na libala ndeko na biso ya mwasi epai ya mobali oyo akatama ngenga te, pamba te ezali likambo ya soni mpo na biso. \v 15 Tokoki kondima yango kaka soki bokomi lokola biso, soki bana na bino nyonso ya mibali bakatisi ngenga. \v 16 Boye biso tokopesa na libala bana na biso ya basi mpe tokozwa bana na bino ya basi na libala. Tokovanda elongo na bino mpe tokokoma libota moko. \v 17 Kasi soki boboyi kokatisa ngenga ndenge biso tolobi, tokozwa ndeko na biso ya mwasi mpe tokokende na biso. \p \v 18 Likanisi na bango emonanaki malamu epai ya Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali. \v 19 Lokola elenge mobali, oyo azalaki na lokumu koleka bato nyonso ya ndako ya tata na ye, alingaki mwana mwasi ya Jakobi, akokisaki na lombangu likambo oyo bayebisaki ye. \v 20 Boye, Amori mpe Sishemi, mwana na ye ya mobali, bakendeki na ekuke ya engumba na bango mpo na koloba na bana mboka na bango : \v 21 « Bato oyo bazali na boboto epai na biso ; tika ete bavanda elongo na biso mpe basala mombongo, mpo ete mboka ezali na yango monene ! Tokoki na biso kobala bana na bango ya basi, mpe bango bakoki na bango kobala bana na biso ya basi. \v 22 Kasi mibali bakondima kovanda elongo na biso lokola bandeko ya libota moko soki kaka mibali nyonso kati na biso bakatisi ngenga lokola bango. \v 23 Bibwele na bango, bomengo na bango, banyama na bango nyonso ; boni ekokoma ya biso te soki kaka tondimi ete bavanda elongo na biso ? » \p \v 24 Boye, bato nyonso oyo bazalaki kobima na ekuke ya engumba bandimaki Amori mpe mwana na ye ya mobali, Sishemi ; mpe mibali nyonso bakatisaki ngenga. \p \v 25 Sima na mikolo misato, wana mibali nyonso kati na bango bazalaki nanu na pasi ya bapota, bana mibali mibale ya Jakobi, bandeko mibali ya Dina, Simeoni mpe Levi, bakamataki mipanga na bango, bakotaki na pwasa kati na engumba mpe babomaki mibali nyonso. \v 26 Babomaki na mopanga Amori mpe mwana na ye ya mobali Sishemi. Bakamataki Dina wuta na ndako ya Sishemi mpe bazongaki na ye. \v 27 Bana mibali mosusu ya Jakobi bayaki kosasa mibali oyo bazalaki na bapota mpe kobebisa engumba mpo ete babebisaki lokumu ya ndeko na bango ya mwasi. \v 28 Babotolaki bangombe na bango, bameme mpe bantaba na bango, ba-ane na bango, biloko nyonso oyo ezalaki kati na engumba mpe na bilanga. \v 29 Bakamataki bomengo na bango nyonso : bana, basi mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na bandako na bango. \p \v 30 Boye, Jakobi alobaki na Simeoni mpe na Levi : \pi1 — Bopesi ngai pasi mpe bobimisi ngai moto mabe na miso ya bato ya Kanana mpe ya Perizi oyo bazali kovanda na mboka oyo. Biso tozali kaka moke ; mpe soki basangisi makasi na bango mpo na kobundisa ngai, bakoboma ngai elongo na ndako na ngai mobimba. \p \v 31 Bango bazongisaki : \pi1 — Boni, esengelaki bazwa ndeko na biso lokola mwasi ya ndumba ? \c 35 \s1 Jakobi azongi na Beteli \p \v 1 Nzambe alobaki na Jakobi : « Kende na Beteli, vanda kuna mpe tonga kuna etumbelo mpo na Nzambe oyo abimelaki yo tango ozalaki kokima ndeko na yo Ezawu. » \p \v 2 Jakobi alobaki na bato ya libota na ye mpe na bato nyonso oyo bazalaki na ye elongo : « Bolongola banzambe ya bapaya oyo ezali kati na bino, bomipetola mpe bolata bilamba mosusu. \v 3 Tokomata na Beteli epai wapi nakotonga etumbelo mpo na Nzambe oyo ayanolaki ngai na mokolo oyo nazalaki na pasi mpe azalaki elongo na ngai bisika nyonso oyo nazalaki kokende. » \p \v 4 Bapesaki Jakobi banzambe nyonso ya bapaya, oyo bazalaki na yango mpe biloko na bango ya matoyi. Boye Jakobi akundaki yango na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki pene ya Sishemi. \v 5 Sima, bakendeki. Kanda na Nzambe ekweyelaki bingumba nyonso ya zingazinga na bango, mpe moko te alandaki bana mibali ya Jakobi. \p \v 6 Jakobi mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bakomaki na Luze, oyo ezali Beteli, kati na mokili ya Kanana. \v 7 Kuna nde atongaki etumbelo mpe abengaki esika yango « Eli Beteli\f + \fr 35.7 \fr*\ft Eli Beteli elingi koloba : Nzambe ya Beteli.\ft*\f*, » pamba te ezalaki kuna nde Nzambe amimonisaki epai na ye tango azalaki kokima ndeko na ye. \v 8 Ezalaki wana nde Debora, mama mobokoli ya Rebeka, akufaki. Bakundaki ye pembeni ya Beteli, na se ya nzete oyo, wuta na tango wana, bakomaki kobenga « Aloni-Bakuti\f + \fr 35.8 \fr*\ft Aloni-Bakuti elingi koloba : nzete ya bileli.\ft*\f*. » \p \v 9 Nzambe abimelaki lisusu Jakobi tango azongaki wuta na Padani-Arami mpe apambolaki ye. \v 10 Nzambe alobaki na ye : « Kombo na yo ezali Jakobi ; kasi okobengama lisusu Jakobi te, kombo na yo ekomi Isalaele. » Yango wana Nzambe apesaki ye kombo « Isalaele. » \p \v 11 Nzambe alobaki na ye lisusu : « Nazali Nzambe-Na-Nguya-Nyonso. Bota bana mpe bokoma ebele ; bokoma ekolo moko mpe bikolo ebele ekobima na nzela na yo, bakonzi bakobima kati na yo. \v 12 Mokili oyo napesaki na Abrayami mpe na Izaki, napesi yango mpe na yo. Nakopesa yango lisusu na bakitani na yo. » \p \v 13 Sima, Nzambe atikaki ye na esika oyo asololaki na ye. \v 14 Jakobi atelemisaki libanga ya elembo na esika oyo Nzambe asololaki na ye ; asopaki likolo ya libanga yango likabo ya masanga mpe mafuta. \v 15 Jakobi apesaki esika oyo Nzambe asololaki na ye kombo « Beteli. » \s1 Kufa ya Rasheli mpe Izaki \p \v 16 Jakobi mpe libota na ye balongwaki na Beteli. Wana bazalaki nanu mwa mosika na Efrata\f + \fr 35.16 \fr*\ft Efrata ezali kombo ya kala ya Beteleemi.\ft*\f*, Rasheli abotaki, kasi na pasi makasi. \v 17 Lokola azalaki na pasi makasi ya kobota, mwasi mobotisi ayebisaki ye : « Kobanga te ! Pamba te ozali na mwana mobali mosusu. » \p \v 18 Lokola azalaki kobundana mpo na kokufa, liboso ya kokata motema, apesaki mwana na ye ya mobali kombo Beni-Oni\f + \fr 35.18 \fr*\ft Beni-Oni elingi koloba : mwana ya pasi na ngai.\ft*\f*. Kasi tata na ye apesaki ye kombo Benjame\f + \fr 35.18 \fr*\ft Benjame elingi koloba : mwana ya loboko na ngai ya mobali.\ft*\f*. \v 19 Rasheli akufaki mpe bakundaki ye na nzela ya Efrata, elingi koloba Beteleemi. \v 20 Jakobi atelemisaki libanga ya elembo likolo ya kunda ya Rasheli ; mpe kino lelo oyo, libanga wana ya elembo elakisaka kunda ya Rasheli. \p \v 21 Sima, Isalaele alongwaki mpe akendeki kotonga ndako na ye ya kapo mosika ya Migidali-Ederi. \v 22 Wana Isalaele azalaki kowumela na mokili wana, Ribeni ayaki kuna mpe asangisaki nzoto na Bila, makangu ya tata na ye ; mpe Isalaele ayokaki yango. \s1 Bana ya Jakobi \li4 Jakobi azalaki na bana mibali zomi na mibale : \b \li1 \v 23 Bana mibali ya Lea : \li2 Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Jakobi ; \li2 Simeoni, Levi, Yuda, Isakari mpe Zabuloni. \li1 \v 24 Bana mibali ya Rasheli : \li2 Jozefi mpe Benjame. \li1 \v 25 Bana mibali ya Bila, mwasi mosali ya Rasheli : \li2 Dani mpe Nefitali. \li1 \v 26 Bana mibali ya Zilipa, mwasi mosali ya Lea : \li2 Gadi mpe Aseri. \b \li4 Bango nde bana mibali ya Jakobi oyo babotelaki ye na Padani-Arami. \s1 Kufa ya Izaki \p \v 27 Jakobi azongaki epai ya Izaki, tata na ye, na Mamire, pene ya Kiriati-Ariba oyo ebengami Ebron, epai wapi Abrayami mpe Izaki bazalaki kovanda. \v 28 Izaki awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku mwambe. \v 29 Sima, Izaki akataki motema mpe akufaki ; awumelaki na bomoi mibu ebele, akomaki mobange mpe alandaki bakoko na ye. Bana na ye ya mibali, Ezawu mpe Jakobi, bakundaki ye. \c 36 \ms1 Lisolo ya libota ya Ezawu \s1 Bana ya Ezawu \p \v 1 Tala libota ya Ezawu oyo azali Edomi. \b \p \v 2 Ezawu abalaki basi na ye kati na bana basi ya Kanana : Ada, mwana mwasi ya Eloni, moto ya Iti ; Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, moto ya Evi ; \v 3 mpe Basimati, mwana mwasi ya Isimaeli mpe ndeko mwasi ya Nebayoti. \p \v 4 Ada abotelaki Ezawu Elifazi ; mpe Basimati abotelaki ye Reweli. \v 5 Olibama abotaki Yewushi, Yaelami mpe Kora. Bango nde bana mibali oyo babotelaki Ezawu na mokili ya Kanana. \p \v 6 Ezawu azwaki basi na ye, bana na ye ya mibali, bana na ye ya basi, bato nyonso ya ndako na ye mpe bibwele na ye, banyama na ye nyonso mpe biloko nyonso oyo azwaki na mokili ya Kanana, akendeki na mokili mosusu, mosika ya ndeko na ye Jakobi. \v 7 Bomengo na bango ekomaki mingi penza, mpe bakokaki lisusu te kovanda esika moko ; pamba te mokili oyo bazalaki kovanda ekokaki bango lisusu te likolo ya motango ya bibwele na bango. \v 8 Yango wana Ezawu, oyo azali Edomi, akendeki kovanda na ngomba Seiri. \b \li4 \v 9 Tala libota ya Ezawu, koko ya bato ya Edomi, na ngomba Seiri : \b \li1 \v 10 Tala bakombo ya bana mibali ya Ezawu : \li2 Elifazi, mwana mobali ya Ada, mwasi ya Ezawu ; mpe Reweli, mwana mobali ya Basimati, mwasi ya Ezawu. \li1 \v 11 Bana mibali ya Elifazi : \li2 Temani, Omari, Tsefo, Gaetami mpe Kenazi. \pm \v 12 Elifazi, mwana mobali ya Ezawu, azalaki na makangu oyo kombo na ye ezalaki « Timina ; » Timina abotelaki ye Amaleki. \li4 Bango nde bakoko ya Ada, mwasi ya Ezawu. \li1 \v 13 Bana mibali ya Reweli : \li2 Naati, Zera, Shama mpe Miza. \li4 Bango nde bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu. \li1 \v 14 Tala bana mibali oyo Olibama, mwasi ya Ezawu, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, abotelaki Ezawu : \li2 Yewushi, Yaelami mpe Kora. \b \li4 \v 15 Tala bakonzi ya mabota ya bana mibali ya Ezawu : \li1 Bana ya Elifazi, mwana liboso ya Ezawu : \li2 mokonzi Temani, mokonzi Omari, mokonzi Tsefo, mokonzi Kenazi, \v 16 mokonzi Kora, mokonzi Gaetami mpe mokonzi Amaleki. Bango nde bakonzi ya libota ya Elifazi, oyo babotamaki na Edomi ; bazalaki bakoko ya Ada. \li1 \v 17 Bana mibali ya Reweli, mwana mobali ya Ezawu : \li2 mokonzi Naati, mokonzi Zera, mokonzi Shama mpe mokonzi Miza. Bango nde bakonzi ya libota ya Reweli, oyo babotamaki na Edomi ; bazalaki bakoko ya Basimati, mwasi ya Ezawu. \li1 \v 18 Bana mibali ya Olibama, mwasi ya Ezawu : \li2 mokonzi Yewushi, mokonzi Yaelami mpe mokonzi Kora. Bango nde bakonzi ya libota ya Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe mwasi ya Ezawu. \li4 \v 19 Bango nde bazalaki bana mibali ya Ezawu oyo azali Edomi, mpe bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Edomi. \b \li1 \v 20 Tala bakitani ya Seiri, moto ya Ori, bato ya liboso oyo bavandaki na mokili yango : \li2 Lotani, Shobali, Tsibeoni, Ana, \v 21 Dishoni, Etseri mpe Dishani. Bango nde bakonzi ya libota ya Ori, mwana mobali ya Seiri, na mokili ya Edomi. \li1 \v 22 Bana mibali ya Lotani : \li2 Ori mpe Emami. Timina azalaki ndeko mwasi ya Lotani. \li1 \v 23 Bana mibali ya Shobali : \li2 Alivani, Manaati, Ebali, Shefo mpe Onami. \li1 \v 24 Bana mibali ya Tsibeoni : \li2 Aya mpe Ana. Ezali Ana nde amonaki maziba ya mayi kati na esobe tango azalaki koleisa ba-ane ya Tsibeoni, tata na ye. \li1 \v 25 Bana ya Ana : \li2 Dishoni, mwana na ye ya mobali ; mpe Olibama, mwana na ye ya mwasi. \li1 \v 26 Bana mibali ya Dishoni : \li2 Emidani, Eshibani, Yitirani mpe Kerani. \li1 \v 27 Tala bana mibali ya Etseri : \li2 Bilani, Zavani mpe Akani. \li1 \v 28 Bana mibali ya Dishani : \li2 Utsi mpe Arani. \li1 \v 29 Tala bakonzi ya mabota ya Ori : \li2 mokonzi Lotani, mokonzi Shobali, mokonzi Tsibeoni, mokonzi Ana, \v 30 mokonzi Dishoni, mokonzi Etseri mpe mokonzi Dishani. \li4 Bango nde bazalaki bakonzi ya mabota ya Ori, na mokili ya Seiri. \s1 Bakonzi ya Edomi \li4 \v 31 Tala bakonzi oyo bakonzaki kati na Edomi liboso ete bana ya Isalaele bazwa mokonzi : \li1 \v 32 Bela, mwana mobali ya Beori, akomaki mokonzi ya Edomi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Dinaba. » \li1 \v 33 Tango Bela akufaki, Yobabi, mwana mobali ya Zera, moto ya mokili ya Botsira, akitanaki na ye na bokonzi. \li1 \v 34 Tango Yobabi akufaki, Ushami, moto ya mokili ya Temani, akitanaki na ye na bokonzi. \li1 \v 35 Tango Ushami akufaki, Adadi, mwana mobali ya Bedadi oyo alongaki Madiani na bilanga ya Moabi, akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki Aviti. \li1 \v 36 Tango Adadi akufaki, Samila, moto ya engumba Masireka, akitanaki na ye na bokonzi. \li1 \v 37 Tango Samila akufaki, Saulo, moto ya engumba Reoboti, engumba oyo etongama pembeni ya ebale, akitanaki na ye na bokonzi. \li1 \v 38 Tango Saulo akufaki, Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akitanaki na ye na bokonzi. \li1 \v 39 Tango Bala-Anani, mwana mobali ya Akibori, akufaki, Adari akitanaki na ye na bokonzi. Kombo ya engumba na ye ezalaki « Pawu, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Meetabeli. » Meetabeli azalaki mwana mwasi ya Matiredi, mwana mwasi ya Mezaabi. \b \li4 \v 40 Tala bato oyo bazalaki bakonzi ya mabota ya Ezawu kolanda mabota ya botata, bisika oyo bazalaki kovanda mpe bakombo na bango : \li1 Timina, Aliva, Yeteti, \li1 \v 41 Olibama, Ela, Pinoni, \li1 \v 42 Kenazi, Temani, Mibitsari, \li1 \v 43 Magidieli mpe Irami. \li4 Bango nde bazalaki bakonzi ya Edomi kolanda bituka na bango, kati na mokili oyo bazalaki kovanda. \b \li4 Ezawu azalaki koko ya bato ya Edomi. \c 37 \ms1 Lisolo ya libota ya Jakobi \s1 Ndoto ya Jozefi \p \v 1 Jakobi avandaki na mokili ya Kanana epai wapi tata na ye azalaki kovanda. \b \p \v 2 Tala molongo ya libota ya Jakobi. \b \p Elenge mobali Jozefi azalaki na mibu zomi na sambo ya mbotama mpe azalaki kobatela bibwele. Azalaki kosala mosala yango elongo na bandeko na ye ya mibali, bana ya Bila mpe ya Zilipa, basi ya tata na ye. Jozefi azalaki koyebisa tata na bango makambo mabe ya bandeko na ye. \p \v 3 Isalaele azalaki kolinga Jozefi mingi koleka bana na ye nyonso, pamba te abotaki ye na kimobange. Asalelaki ye elamba ya kitoko mpe ya talo. \v 4 Tango bandeko na ye ya mibali bamonaki ete tata na bango azali kolinga ye koleka bango nyonso, bayinaki ye mpe bakokaki lisusu te koloba na ye na motema malamu. \p \v 5 Jozefi alotaki ndoto mpe tango ayebisaki yango epai ya bandeko na ye ya mibali, bayinaki ye lisusu makasi. \v 6 Alobaki na bango : \pi1 — Boyoka ndoto oyo nalotaki : \v 7 « Tozalaki kokanga maboke ya ble kati na bilanga. Mbala moko, liboke na ngai elamuki mpe etelemi ngwi ; bongo maboke na bino, oyo ezalaki zingazinga ya liboke na ngai, egumbamaki liboso ya liboke na ngai. » \p \v 8 Bandeko na ye ya mibali balobaki na ye : \pi1 — Okanisi ete okokoma mokonzi na biso mpe okokonza biso ? \p Bongo bayinaki ye lisusu koleka likolo ya ndoto na ye mpe likolo ya makambo oyo alobaki. \p \v 9 Alotaki lisusu ndoto mosusu mpe ayebisaki yango epai ya bandeko na ye ya mibali. Alobaki : \pi1 — Boyoka, naloti lisusu ndoto mosusu : « Namonaki moyi, sanza mpe minzoto zomi na moko kogumbama liboso na ngai. » \p \v 10 Tango ayebisaki tata na ye ndenge ayebisaki bandeko na ye ya mibali, tata na ye agangelaki ye mpe alobaki : \pi1 — Ndoto nini wana yo osili kolota ? Okanisi ete ngai, mama na yo mpe bandeko na yo ya mibali, tokoya mpe tokogumbama na mabele liboso na yo ? \p \v 11 Bandeko na ye ya mibali bakomaki na motema likunya epai na ye, kasi tata na ye abombaki kaka likambo yango na motema. \s1 Jozefi atekami lokola mowumbu \p \v 12 Bandeko mibali ya Jozefi bakendeki koleisa bibwele ya tata na bango pembeni ya Sishemi. \v 13 Isalaele alobaki na Jozefi : \pi1 — Oyebi ete bandeko na yo bazali koleisa bibwele pembeni ya Sishemi ; yaka, pamba te nalingi kotinda yo epai na bango. \p Jozefi azongisaki : \pi1 — Malamu ! \p \v 14 Tata na ye alobaki na ye : \pi1 — Kende mpe tala soki makambo nyonso ezali kotambola malamu mpo na bandeko na yo mpe mpo na bibwele, bongo omemela ngai sango. \p Boye, atindaki ye wuta na lubwaku ya Ebron. Wana Jozefi akomaki na Sishemi, \v 15 moto moko amonaki ye tango azalaki koyengayenga na bilanga. Atunaki ye : \pi1 — Ozali koluka nini ? \p \v 16 Jozefi azongisaki : \pi1 — Nazali koluka bandeko na ngai. Okoki koyebisa ngai esika nini bazali koleisa bibwele na bango ? \p \v 17 Moto yango azongisaki : \pi1 — Balongwaki awa mpe nayokaki bango koloba : « Tokende na Dotani. » \p Boye Jozefi alandaki bandeko na ye mpe amonaki bango pembeni ya Dotani. \v 18 Tango bango bamonaki ye na mosika liboso ete akoma pene na bango, bayokanaki mpo ete baboma ye. \p \v 19 Balobanaki bango na bango : \pi1 — Tala moloti bandoto azali koya. \v 20 Sik’oyo, boya mpo ete toboma ye mpe tobwaka ye na moko kati na mabulu oyo. Tokoloba ete nyama mabe eliaki ye. Bongo tokotala oyo ekoya sima na bandoto na ye. \p \v 21 Tango Ribeni ayokaki bongo, alukaki nzela ya kokangola ye na maboko na bango. Alobaki : \pi1 — Toboma ye te ! \v 22 Bosopa makila na ye te ! Bobwaka ye kaka na libulu oyo ezali kati na esobe, kasi bosala ye mabe te. \p Ribeni alobaki bongo pamba te azalaki na makanisi ya kokangola ye na maboko na bango mpe kozongisa ye na maboko ya tata na ye. \p \v 23 Tango kaka Jozefi akomaki epai ya bandeko na ye ya mibali, balongolaki ye elamba na ye ya kitoko mpe ya talo oyo alataki. \v 24 Bakangaki ye mpe babwakaki ye na libulu. Libulu yango ezalaki na eloko te, ezalaki mpe na mayi te na kati. \v 25 Wana bavandaki mpo na kolia, batombolaki miso mpe bamonaki bato ya libota ya Isimaeli elongo na bashamo na bango koya wuta na Galadi. Bashamo na bango ezalaki komema na Ejipito : biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mafuta ya solo kitoko mpe mire. \p \v 26 Boye Yuda alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Litomba nini tokozwa soki tobomi ndeko na biso mpe tozipi makila na ye ? \v 27 Malamu toteka ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, kasi toboma ye te ; pamba te azali kaka ndeko na biso mpe tozali na ye makila moko. » Boye bandeko na ye bandimaki. \p \v 28 Nzokande tango bato ya mombongo ya mokili ya Madiani balekaki wana, babimisaki Jozefi wuta na libulu mpe batekaki ye epai ya bato ya ekolo ya Isimaeli, na motuya ya mbongo ya bibende, tuku mibale ; mpe bango bamemaki ye na Ejipito. \p \v 29 Tango Ribeni azongaki na libulu mpe amonaki ete Jozefi azali lisusu kuna te, apasolaki bilamba na ye, \v 30 azongaki epai ya bandeko na ye mpe alobaki : « Elenge mobali azali lisusu kuna te ! Sik’oyo ngai, nakosuka wapi ? » \p \v 31 Boye babomaki ntaba, bazwaki elamba ya Jozefi mpe bazindisaki yango na makila ya ntaba. \v 32 Sima, bazongisaki elamba yango ya kitoko mpe ya talo epai ya tata na bango. Balobaki : \pi1 — Tala eloko oyo tomoni ; tala yango malamu soki ezali penza elamba ya mwana na yo to te ! \p \v 33 Jakobi asosolaki ete ezali elamba ya Jozefi mpe agangaki : \pi1 — Ezali elamba ya mwana na ngai ! Nyama moko ya mabe elie ye ! Solo, bakati-kati Jozefi na biteni ! \p \v 34 Jakobi apasolaki bilamba na ye, alataki saki mpe asalaki matanga mpo na mwana na ye mikolo ebele. \v 35 Bana na ye nyonso ya mibali mpe ya basi bayaki kobondisa ye ; kasi aboyaki kobondisama. Alobaki : « Te ; nakozala na matanga kino nakolanda mwana na ngai na mboka ya bakufi epai wapi mwana na ngai azali. » Boye, tata na ye alelaki ye. \p \v 36 Bato ya mokili ya Madiani batekaki Jozefi na Ejipito epai ya Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. \c 38 \s1 Yuda mpe Tamari \p \v 1 Nzokande na tango wana, Yuda atikaki bandeko na ye mpe akendeki kovanda epai ya Ira, moto ya Adulami\f + \fr 38.1 \fr*\ft Adulami ezali engumba ya kala ya Kanana.\ft*\f*. \v 2 Yuda akutanaki kuna na mwana mwasi ya Shuwa, moto ya Kanana. Abalaki ye mpe asangisaki na ye nzoto. \v 3 Mwasi yango akomaki na zemi mpe abotelaki Yuda mwana mobali. Mpe Yuda apesaki ye kombo « Eri. » \v 4 Mwasi yango azwaki lisusu zemi mpe abotaki mwana mobali ; apesaki ye kombo « Onani. » \v 5 Abotaki mwana mobali mosusu mpe apesaki ye kombo « Shela. » Yuda azalaki na Kezibi tango mwasi na ye abotaki mwana ya misato. \p \v 6 Yuda abalelaki Eri, mwana na ye ya liboso, mwasi : Tamari. \v 7 Kasi Eri, mwana liboso ya Yuda, azalaki moto mabe na miso ya Yawe ; yango wana Yawe abomaki ye. \p \v 8 Bongo Yuda alobaki na Onani : « Sangisa nzoto na semeki na yo mpo ete obota bana mpo na ndeko na yo ya mobali oyo akufa. » \p \v 9 Kasi lokola Onani ayebaki ete bana oyo bakobotama bakozala ya ye te, azalaki kobwaka mayi na ye ya mibali na mabele tango nyonso azalaki kosangisa nzoto na semeki na ye, mpo ete abotela ndeko na ye ya mobali bana te. \v 10 Likambo oyo Onani azalaki kosala ezalaki kosepelisa Yawe te. Boye ye mpe lisusu, Yawe abomaki ye. \p \v 11 Yuda alobaki na Tamari, bokilo na ye ya mwasi : « Lokola okufisi mibali, kende kovanda na ndako ya tata na yo kino Shela, mwana na ngai ya mobali, akokoma mokolo. » Pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu ye mpe akoki kokufa lokola bandeko na ye ya mibali. » Boye Tamari akendeki kovanda na ndako ya tata na ye. \p \v 12 Sima na tango molayi, mwana mwasi ya Shuwa, mwasi ya Yuda, akufaki. Lokola tango na ye ya matanga esilaki, Yuda akendeki na Timina epai ya bato oyo bazalaki kolongola bapwale ya bameme na ye. Boye, moninga na ye Ira, moto ya Adulami, akendeki elongo na ye. \p \v 13 Tango bayebisaki Tamari : « Bokilo na yo ya mobali azali kokende na Timina mpo na kolongolisa bapwale ya bameme na ye, » \v 14 alongolaki bilamba na ye ya mwasi akufisa mobali mpe amizipaki elongi na vwale mpo ete bayeba ye lisusu te. Avandaki na ekuke ya Enayimi oyo ezalaki na nzela ya Timina, pamba te amonaki ete Shela akolaki, kasi bapesaki ye te na libala epai ya Shela. \p \v 15 Tango Yuda amonaki ye, akanisaki ete azali mwasi ya ndumba, pamba te azipaki elongi na ye. \v 16 Lokola Yuda ayebaki te ete ezali bokilo na ye ya mwasi, apusanaki na esika oyo azalaki, pembeni ya nzela, mpe alobaki na ye : \pi1 — Yaka, ndima ete tosangisa na yo nzoto. \p Tamari atunaki : \pi1 — Okopesa ngai nini soki osangisi na ngai nzoto ? \p \v 17 Yuda azongisaki : \pi1 — Nakotindela yo mwana ntaba oyo nakozwa na etonga na ngai. \p Tamari atunaki lisusu : \pi1 — Ndanga nini okosimbisa ngai kino tango okotindela ngai yango ? \p \v 18 Yuda alobaki : \pi1 — Ndanga nini olingi ete nasimbisa yo ? \p Tamari azongisaki : \pi1 — Lopete na yo, singa na yo mpe lingenda na yo, oyo osimbi na loboko. \p Boye Yuda apesaki ye yango, asangisaki na ye nzoto mpe Tamari akomaki na zemi. \v 19 Tamari atelemaki mpe akendeki ; alongolaki vwale na ye mpe azongisaki lisusu na nzoto bilamba na ye ya mwasi akufisa mobali. \p \v 20 Boye Yuda atindaki moninga na ye Ira, moto ya Adulami, mpo ete amemela mwasi yango mwana ntaba mpe azwa ndanga oyo asimbisaki ye. Kasi Ira amonaki ye te. \v 21 Boye atunaki epai ya bavandi ya esika wana, na Enayimi : \pi1 — Wapi mwasi ya ndumba oyo azalaki na nzela, na Enayimi ? \p Bazongiselaki ye : \pi1 — Esika oyo etikala kozala na mwasi ya ndumba te. \p \v 22 Ira azongaki epai ya Yuda mpe ayebisaki ye : \pi1 — Namoni ye te ; kutu bavandi ya Enayimi bayebisi ngai ete mwasi ya ndumba atikala kozala na esika wana te. \p \v 23 Yuda alobaki : \pi1 — Atikala na biloko oyo azwaki, noki te tokobima babolole. Ngai nazali na likambo te ; natindeli ye mwana ntaba, mpe yo omoni ye te. \p \v 24 Sima na sanza misato, bayebisaki Yuda : \pi1 — Tamari, bokilo na yo ya mwasi, asalaki kindumba, mpe tala kutu akomi na zemi. \p Yuda alobaki : \pi1 — Babimisa ye mpe batumba ye na moto ! \p \v 25 Wana bazalaki kobimisa ye libanda, Tamari atindaki sango oyo epai ya Yuda, bokilo na ye : \pi1 — Nazali na zemi ya nkolo biloko oyo. \p Mpe abakisaki : \pi1 — Tala soki okoki koyeba nani azali nkolo ya lopete oyo, ya singa oyo mpe ya lingenda oyo. \p \v 26 Yuda asosolaki ete ezali biloko na ye mpe alobaki : \pi1 — Azali sembo koleka ngai, pamba te nabalisaki ye te epai ya Shela, mwana na ngai ya mobali. \p Boye Yuda atikalaki lisusu te kosangisa na ye nzoto. \p \v 27 Wana tango na ye ya kobota ekokaki, emonanaki ete ezalaki na mapasa mibale ya mibali kati na libumu na ye. \v 28 Na tango ya kobota, moko kati na bango abimisaki loboko ; mpe mwasi oyo abotisaka asimbaki loboko yango, akangaki yango singa ya motane mpe alobaki : « Mwana oyo nde abimi liboso. » \v 29 Kasi azongisaki loboko na ye, mpe ndeko na ye ya mobali abimaki. Bongo mwasi oyo abotisaka alobaki : « Ofungoli nzela nini mpo na kobima ? » Mpe bapesaki ye kombo « Peretsi\f + \fr 38.29 \fr*\ft Peretsi elingi koloba : nzela.\ft*\f*. » \v 30 Sima, ndeko na ye oyo azalaki na singa ya motane na loboko mpe abotamaki ; bapesaki ye kombo « Zera\f + \fr 38.30 \fr*\ft Zera elingi koloba : kobima ya moyi.\ft*\f*. » \c 39 \s1 Jozefi mpe mwasi ya Potifari \p \v 1 Sima, bamemaki Jozefi na Ejipito. Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, moto ya Ejipito, asombaki ye na maboko ya bato ya Isimaeli oyo bamemaki ye kuna. \p \v 2 Yawe azalaki elongo na Jozefi ; boye Jozefi azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala, mpe avandaki kati na ndako ya moto ya Ejipito, nkolo na ye. \v 3 Tango nkolo na ye asosolaki ete Yawe azali elongo na Jozefi, mpe ete Yawe azali kolongisa ye na makambo nyonso oyo azali kosala, \v 4 Jozefi azwaki ngolu na miso ya nkolo na ye, oyo apesaki ye mokumba ya kobatela bozwi na ye nyonso : Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe apesaki ye mokumba ya kobatela biloko na ye nyonso. \v 5 Wuta tango Potifari akomisaki Jozefi mokonzi kati na ndako na ye mpe mokonzi ya biloko nyonso oyo azalaki na yango, Yawe apambolaki ndako ya moto ya Ejipito mpo na Jozefi ; lipamboli ya Yawe ezalaki na likolo ya biloko nyonso oyo azalaki na yango, kati na ndako na ye mpe na bilanga. \v 6 Boye Potifari atikaki biloko na ye nyonso kati na maboko ya Jozefi, azalaki lisusu kotala eloko moko te longola kaka bilei na ye. \p Jozefi azalaki na nzoto kitoko mpe elongi kitoko. \p \v 7 Sima na yango, mwasi ya nkolo ya Jozefi alulaki ye Jozefi mpe alobaki na ye : \pi1 — Yaka kosangisa na ngai nzoto ! \p \v 8 Kasi Jozefi aboyaki mpe alobaki na mwasi ya nkolo na ye : \pi1 — Tala, nkolo na ngai atunaka ngai ata eloko moko te na oyo etali ndako na ye, mpe atika biloko na ye nyonso kati na maboko na ngai. \v 9 Moto moko te aleki ngai na monene kati na ndako oyo. Nkolo na ngai apekisi ngai eloko moko te longola kaka yo, pamba te ozali mwasi na ye. Boye ndenge nini penza ngai nakoki kosala likambo ya mabe boye mpe kosala masumu liboso ya Nzambe ? \p \v 10 Mokolo na mokolo, mwasi ya Potifari azalaki kaka kotungisa Jozefi, kasi ye mpe azalaki kaka koboya kosangisa na ye nzoto to kozala na ye elongo. \p \v 11 Mokolo moko, awa Jozefi akotaki na ndako mpo na kosala mosala na ye, mpe ata mosali moko te azalaki wana, \v 12 mwasi ya Potifari akangaki ye na bilamba mpe alobaki na ye : \pi1 — Yaka kosangisa na ngai nzoto ! \p Kasi Jozefi asundolaki elamba na ye kati na maboko ya mwasi ya Potifari mpe akimaki libanda ya ndako. \v 13 Tango mwasi ya Potifari amonaki ete Jozefi asundoli elamba na ye kati na maboko na ye mpe akimi libanda, \v 14 abengaki basali ya ndako na ye mpe alobaki : \pi1 — Botala ! Mo-Ebre oyo bamemelaki biso ayaki nde kosakanela biso ! Aluki kosangisa na ngai nzoto, kasi ngai nagangi makasi. \v 15 Tango ayoki ete nagangi makasi mpo na koluka lisalisi, asundoli elamba na ye pembeni na ngai mpe akimi libanda ! \p \v 16 Mwasi ya Potifari abombaki elamba ya Jozefi pembeni na ye kino mobali na ye azongaki na ndako. \v 17 Bongo abetelaki ye lisolo : \pi1 — Mowumbu Mo-Ebre oyo omemelaki biso, ayaki epai na ngai mpo na kosakana na ngai. \v 18 Kasi tango nagangaki makasi mpo na koluka lisalisi, asundolaki elamba na ye pembeni na ngai mpe akimaki libanda. \p \v 19 Tango nkolo ya Jozefi ayokaki lisolo oyo mwasi na ye abetelaki ye na maloba oyo : « Tala ndenge mowumbu na yo asali ngai, » Potifari asilikaki makasi. \s1 Jozefi kati na boloko \p \v 20 Potifari akangaki Jozefi mpe abwakaki ye na boloko epai wapi mokonzi Faraon atiaka bakangami. Kasi, wana Jozefi azalaki kati na boloko, \v 21 Yawe azalaki elongo na Jozefi mpe atalisaki ye bolamu na Ye ; asalelaki ye ngolu na miso ya mokonzi ya boloko. \v 22 Mokonzi ya boloko apesaki Jozefi mokumba ya kokengela bato nyonso ya boloko mpe ya kotambolisa makambo nyonso oyo ezalaki kosalema kuna. \v 23 Mokonzi ya boloko azalaki kotala lisusu likambo moko te kati na makambo oyo apesaki Jozefi mokumba ya kosala, pamba te Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kolongisa ye na makambo nyonso oyo azalaki kosala. \c 40 \s1 Bandoto ya bakalaka mibale ya mokonzi ya Ejipito \p \v 1 Sima na mwa tango, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, basalaki mabe liboso ya nkolo na bango, mokonzi ya Ejipito. \v 2 Faraon asilikelaki bakalaka na ye mibale ya lokumu : kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa. \v 3 Abwakaki bango na boloko kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, boloko epai wapi Jozefi azalaki. \v 4 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi apesaki bango na maboko ya Jozefi mpo ete alandela bango. Boye basalaki mikolo mwa mingi na boloko. \p \v 5 Ezalaki mokolo moko na butu, bango mibale, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, balotaki moto na moto ndoto na ye mpe ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango. \v 6 Na tongo, Jozefi akendeki epai na bango mpe amonaki ete bazali mawa-mawa. \v 7 Jozefi atunaki bakalaka ya lokumu ya Faraon, oyo bazalaki kati na boloko elongo na ye, kati na ndako ya nkolo na ye : \pi1 — Mpo na nini lelo bilongi na bino ezali mawa-mawa ? \p \v 8 Bazongiselaki ye : \pi1 — Biso mibale toloti bandoto ; kasi moto ya kolimbola yango mpo na biso azali te. \p Jozefi alobaki na bango : \pi1 — Boyebi te ete Nzambe nde apesaka ndimbola ya bandoto ? Nabondeli bino, boyebisa ngai bandoto na bino. \p \v 9 Bongo kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito ayebisaki Jozefi ndoto na ye. Alobaki : \pi1 — Na ndoto na ngai, namonaki nzete ya vino liboso na ngai. \v 10 Nzete yango ya vino ezalaki na bitape misato. Bongo ekomaki kobimisa mito, fololo mpe maboke ebimisaki bambuma ya kotela. \v 11 Kopo ya Faraon ezalaki na maboko na ngai. Nazwaki bambuma ya vino, nakamolaki yango na kopo ya Faraon mpe napesaki ye kopo yango na maboko na ye. \p \v 12 Jozefi alobaki na ye : \pi1 — Tala ndimbola ya ndoto na yo : « Bitape misato ezali mikolo misato. \v 13 Sima na mikolo misato, Faraon akotombola moto na yo mpe akozongisa yo na esika na yo ya mosala. Okotia lisusu kopo ya Faraon na maboko na ye ndenge ozalaki kosala na kala. \v 14 Kasi tango makambo nyonso oyo ekotambola malamu mpo na yo, nabondeli yo, kanisa ngai mpe salela ngai bolamu, zala molobeli na ngai epai ya Faraon mpo ete abimisa ngai na boloko oyo. \v 15 Pamba te babimisaki ngai na makasi wuta na mokili ya Ba-Ebre ; mpe awa nasali likambo moko te ya mabe mpo ete batia ngai na boloko. » \p \v 16 Tango kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito asosolaki ete Jozefi apesaki ndimbola ya malamu, alobaki na Jozefi : \pi1 — Ngai mpe nalotaki ndoto : « Bitunga misato ya mapa ezalaki likolo ya moto na ngai. \v 17 Kitunga ya likolo ezalaki na bagato ya ndenge na ndenge, oyo Faraon alingaka ; kasi bandeke ezalaki kolia yango wuta na kitunga oyo ezalaki na moto na ngai. » \p \v 18 Jozefi alobaki na ye : \pi1 — Tala ndimbola ya ndoto na yo : « Bitunga misato ezali mikolo misato. \v 19 Sima na mikolo misato, Faraon akokata moto na yo mpe akodiembika yo na nzete. Bongo bandeke ekolia mosuni na yo. » \p \v 20 Sima na mikolo misato, ezalaki mokolo ya mbotama ya Faraon. Faraon asalisaki feti monene mpe abengisaki bakalaka na ye nyonso. Abimisaki na boloko, liboso ya bakalaka na ye, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi mpe kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa. \v 21 Faraon azongisaki na mosala, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga. Boye azongelaki lisusu kotia kopo na maboko ya Faraon. \v 22 Kasi Faraon adiembikaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa, ndenge kaka Jozefi ayebisaki bango. \p \v 23 Kasi kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito atikalaki kokanisa lisusu Jozefi te : abosanaki ye. \c 41 \s1 Ndoto ya Faraon \p \v 1 Sima na mibu mibale, Faraon alotaki ndoto : atelemaki pembeni ya ebale Nili, \v 2 amonaki bangombe sambo ya basi, ya kitoko mpe ya mafuta. Bangombe yango ebimaki wuta na ebale mpe ezalaki kolia matiti pembeni ya ebale Nili. \v 3 Sima na yango, bangombe mosusu sambo ya basi, ya mabe mpe ekonda, ebimaki wuta na ebale, etelemaki pembeni ya bangombe ya basi oyo ezalaki pembeni ya ebale Nili. \v 4 Bangombe sambo ya basi ya mabe mpe ekonda eliaki bangombe sambo ya kitoko mpe ya mafuta. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki. \p \v 5 Alalaki lisusu mpe alotaki ndoto ya mibale : nzete moko ya ble ebimisaki mito sambo ya ble, ya minene mpe ya kitoko. \v 6 Mito mosusu sambo ya ble, ekonda mpe ezika na mopepe ya este, ebimaki sima na oyo ya minene. \v 7 Mito sambo oyo ekonda eliaki mito sambo oyo ya minene mpe etonda. Kaka na tango yango, Faraon alamukaki, asosolaki ete ezali ndoto. \p \v 8 Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango. \p \v 9 Kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi alobaki na Faraon : « Na mokolo ya lelo, nalingi kokanisa mbeba na ngai. \v 10 Mokolo moko, Faraon asilikelaki basali na ye mpe atiaki ngai na boloko elongo na kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. \v 11 Biso mibale tolotaki bandoto na butu moko : ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango. \v 12 Kuna, tozalaki na elenge mobali moko, azali Mo-Ebre mpe mosali ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi. Toyebisaki ye bandoto na biso mpe alimbolaki yango mpo na biso, apesaki moto na moto ndimbola ya ndoto na ye. \v 13 Makambo nyonso esalemaki ndenge kaka alimbolelaki biso yango. Ngai nazongelaki misala na ngai ; mpe moninga mosusu, badiembikaki ye. » \p \v 14 Faraon abengaki Jozefi, mpe babimisaki ye na lombangu na boloko. Bakataki ye suki, alataki bilamba mosusu mpe ayaki liboso ya Faraon. \p \v 15 Faraon alobaki na Jozefi : \pi1 — Nalotaki ndoto mpe ata moto moko te alongi kolimbola yango ; kasi nayoki sango na tina na yo ete soki oyoki ndoto, okolimbola yango. \p \v 16 Jozefi azongiselaki Faraon : \pi1 — Ngai nakolonga te kosala yango, kasi Nzambe akopesa na Faraon eyano oyo azali na yango posa. \p \v 17 Faraon alobaki na Jozefi : \pi1 — Na ndoto na ngai, natelemaki pembeni ya ebale Nili. \v 18 Namonaki bangombe sambo ya basi, ya kitoko mpe ya mafuta. Bangombe yango ebimaki wuta na ebale mpe ezalaki kolia matiti pembeni ya ebale Nili. \v 19 Sima na yango, bangombe mosusu sambo ya basi ebimaki : ya mike, ya mabe penza mpe ekonda ; nanu natikala komona te bangombe ya ndenge wana na mokili mobimba ya Ejipito. \v 20 Ngombe ya basi ekonda mpe ya mabe eliaki bangombe sambo ya mafuta oyo ebimaki liboso. \v 21 Bongo ekotaki na mabumu na yango kasi ezalaki komonana te ete bangombe ya mafuta ekoti na mabumu ya bangombe ekonda, mpe lolenge na yango ezalaki kaka mabe lokola ndenge ezalaki liboso. Kaka na tango yango, nalamukaki. \v 22 Na ndoto na ngai mosusu, namonaki mito sambo ya ble ya kitoko mpe ya mafuta kobima na nzete moko. \v 23 Sima na yango, mito sambo mosusu ya ble ebimaki. Ezalaki ya kokawuka, ekonda mpe ezika na mopepe ya este. \v 24 Mito sambo ya ble oyo ekonda emelaki mito sambo ya ble oyo ya malamu. Nayebisaki yango epai ya bato ya soloka kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ngai yango. \p \v 25 Jozefi alobaki na Faraon : \pi1 — Ndoto ya Faraon ezali kaka ndoto moko mpe ezali kaka na ndimbola moko. Nzambe amonisaki Faraon makambo oyo Ye akosala. \v 26 Bangombe sambo ya basi ya kitoko ezali mibu sambo, mpe mito sambo ya ble ezali mibu sambo : ezali kaka ndoto moko. \v 27 Bangombe sambo ya basi ekonda mpe ya mabe oyo ebimaki sima na oyo ya mafuta mpe ya kitoko, ezali mibu sambo ; mpe mito sambo ya ble oyo ekonda mpe ezika na mopepe ya este ezali mibu sambo ya nzala makasi. \v 28 Tala maloba oyo nazalaki na yango mpo na koyebisa Faraon. Nzambe atalisi na Faraon makambo oyo Ye akosala. \v 29 Mibu sambo ya bofuluki ekoya na mokili mobimba ya Ejipito. \v 30 Kasi mibu sambo ya nzala makasi ekolanda yango ; boye bakobosana bofuluki nyonso ya mokili ya Ejipito mpo ete nzala makasi yango ekokawusa mokili. \v 31 Bakokanisa lisusu te bofuluki nyonso ya mokili likolo ya nzala makasi oyo ekolanda, pamba te nzala ekozala makasi penza. \v 32 Soki Faraon alotaki ndoto yango na lolenge mibale, elingi koloba ete Nzambe asilaki kozwa mokano na likambo yango mpe akokokisa yango na lombangu. \v 33 Tika sik’oyo Faraon aluka moto moko ya mayele mpe ya bwanya, atia ye na moto ya mokili ya Ejipito. \v 34 Tika ete Faraon asala bongo ; tika ete apona basali na mokili, ba-oyo bakokongola eteni ya mitano ya bambuma ya Ejipito na tango ya mibu sambo ya bofuluki. \v 35 Boye, na se ya bokonzi ya Faraon, bakobanda kosangisa biloko nyonso ya kolia oyo mibu ya malamu ekobimisa, bakobomba ble na bingumba mpe bakobatela yango lokola biloko ya kolia mpo na bingumba. \v 36 Bakobatela biloko yango mpo na mokili, mpo na mibu sambo ya nzala makasi oyo ekozala na mokili ya Ejipito ; na bongo nzala makasi ekobebisa mokili te. \p \v 37 Likambo yango esepelisaki Faraon mpe basali na ye nyonso. \v 38 Faraon atunaki bango : \pi1 — Tokoki komona moto lokola oyo, moto oyo Molimo na Nzambe avandi kati na ye ? \p \v 39 Faraon alobaki na Jozefi : \pi1 — Lokola Nzambe ayebisi yo makambo oyo nyonso, ezali na moto moko te oyo azali na mayele mpe na bwanya lokola yo. \v 40 Okozala mokonzi ya ndako na ngai mpe bato na ngai nyonso bakobanda kotosa mitindo na yo. Kaka kiti ya bokonzi nde ekosala ete ngai nazala na likolo na yo. \s1 Jozefi azwi bokonzi \p \v 41 Faraon alobaki na Jozefi : \pi1 — Natie yo mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito. \p \v 42 Faraon alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe atiaki yango na mosapi ya Jozefi. Alatisaki ye bilamba ya lino ya kitoko mpe atiaki ye singa ya wolo na kingo. \v 43 Amatisaki ye na shareti na ye ya mibale mpe bato bazalaki koganga : « Bofukama ! » \p Boye, atiaki Jozefi mokonzi ya mokili mobimba ya Ejipito. \p \v 44 Faraon alobaki lisusu na Jozefi : \pi1 — Nazali Faraon. Kasi awa na Ejipito, moto moko te akotombola loboko to lokolo soki kaka na mitindo na yo te. \p \v 45 Faraon apesaki Jozefi kombo « Tsafinati-Paenea, » mpe apesaki ye Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, mpo ete azala mwasi na ye. Jozefi atambolaki na mokili ya Ejipito. \v 46 Azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akotaki na mosala ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Jozefi alongwaki na miso ya Faraon mpe atambolaki na mokili mobimba ya Ejipito. \p \v 47 Na mibu sambo ya bofuluki, mabele ebotaki mingi. \v 48 Jozefi asangisaki biloko nyonso ya kolia oyo ebotaki na mibu yango sambo ya bofuluki kati na Ejipito mpe abombaki yango kati na engumba. Na engumba moko na moko, atiaki biloko ya kolia oyo ewutaki na bilanga oyo ezalaki zingazinga na yango. \v 49 Jozefi abombaki ble ebele lokola zelo ya ebale monene, ezalaki mingi koleka ; yango wana bakataki kotanga, pamba te bakokaki kotanga yango lisusu te. \s1 Bana ya Jozefi \p \v 50 Liboso ete mibu ya nzala makasi eya, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale. \v 51 Jozefi apesaki mwana na ye ya liboso kombo « Manase, » pamba te amilobelaki : « Nzambe asali ete nabosana pasi na ngai nyonso mpe bokabwani na ngai na libota mobimba ya tata na ngai. » \v 52 Apesaki mwana na ye ya mibale kombo « Efrayimi, » pamba te amilobelaki : « Nzambe apesi ngai mabota na mokili epai wapi namonaki pasi. » \s1 Nzala makasi \p \v 53 Mibu sambo ya bofuluki oyo ezalaki na Ejipito ekomaki na suka, \v 54 mpe mibu sambo ya nzala makasi ebandaki, ndenge kaka Jozefi alobaki. Nzala makasi ekotaki na mikili nyonso, kasi na mokili mobimba ya Ejipito biloko ya kolia ezangaki te. \v 55 Tango bato nyonso ya Ejipito bakomaki na nzala makasi, bagangaki epai ya Faraon mpo na koluka biloko ya kolia. Bongo Faraon alobaki na bato nyonso ya Ejipito : « Bokende epai ya Jozefi mpe bosala makambo oyo akoyebisa bino. » \p \v 56 Tango nzala ekotaki na mokili mobimba ya Ejipito, Jozefi afungolaki ndako oyo batiaki biloko mpe atekaki ble epai ya bato ya Ejipito ; kasi nzala makasi ekobaki kaka. \v 57 Mikili nyonso ezalaki koya na Ejipito mpo na kosomba ble epai ya Jozefi mpo ete nzala makasi ekotaki na mokili mobimba. \c 42 \s1 Bandeko ya Jozefi bakei na Ejipito \p \v 1 Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, alobaki na bana na ye ya mibali : « Mpo na nini bozali kotalana bino na bino ? \v 2 Nayoki ete ble ezali na Ejipito. Bokende kuna mpe bosomba ndambo mpo na biso mpo ete towumela na bomoi mpe tokufa te na nzala. » \p \v 3 Bandeko mibali zomi ya Jozefi bakendeki na Ejipito mpo na kosomba ble. \v 4 Kasi Jakobi atikaki te Benjame, ndeko ya Jozefi ya mobali, ete akende elongo na bango, pamba te azalaki kobanga ete likama ekweyela ye. \p \v 5 Kati na bato oyo bakendeki kosomba ble na Ejipito, bana mibali ya Isalaele mpe bazalaki ; pamba te nzala makasi ekotaki mpe na mokili ya Kanana. \p \v 6 Jozefi azalaki moyangeli ya mokili. Ye nde azalaki koteka ble epai ya bato na ye nyonso. Bongo tango bandeko ya Jozefi bakomaki, bagumbamaki liboso na ye mpe bakitisaki mito na se. \v 7 Tango kaka Jozefi amonaki bango, asosolaki mbala moko ete bazali bandeko na ye. Kasi asalaki lokola nde azali mopaya liboso na bango mpe azalaki na maloba makasi epai na bango. Atunaki bango : \pi1 — Bowuti wapi ? \p Bazongisaki : \pi1 — Towuti na mokili ya Kanana ; toyei nde kosomba biloko ya kolia. \p \v 8 Atako Jozefi asosolaki ete bazali bandeko na ye, kasi bango basosolaki ye te. \v 9 Bongo Jozefi akanisaki ndoto oyo alotaki na tina na bango mpe alobaki na bango : \pi1 — Bino bozali penza banongi ! Boyei nde kotala bisika nini mokili na biso ebatelami malamu te ! \p \v 10 Bazongisaki : \pi1 — Te nkolo na ngai, basali na yo bayei nde kosomba biloko ya kolia. \v 11 Tozali biso nyonso bana ya moto moko. Basali na yo bazali bato ya sembo, kasi bazali banongi te. \p \v 12 Alobaki na bango : \pi1 — Te ! Boyei na mokili na biso mpo na kotala bisika oyo ebatelami malamu te ! \p \v 13 Kasi bango bazongisaki : \pi1 — Basali na yo bazalaki bandeko mibali zomi na mibale ; tozali bana ya moto moko oyo azali kovanda na mokili ya Kanana. Mwana ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, mpe mosusu azalaka lisusu te. \p \v 14 Kasi Jozefi alobaki na bango : \pi1 — Ezali ndenge kaka nalobaki na bino : bozali banongi. \v 15 Tala ndenge nakomeka bino : Na kombo ya Faraon, bokolongwa na esika oyo te soki leki na bino ya suka akomi awa te ! \v 16 Botinda moko kati na bino ete akende kozwa ndeko na bino ya mobali ; mpe bino oyo bokotikala, bokozala na boloko mpo na komeka maloba na bino mpe kotala soki bolobi solo. Soki te, na kombo ya Faraon, bozali banongi ! \p \v 17 Atiaki bango nyonso na boloko mikolo misato. \v 18 Na mokolo ya misato, Jozefi ayebisaki bango : \pi1 — Nazali moto oyo abangaka Nzambe. Bosala oyo nazali koloba mpe bokozala na bomoi. \v 19 Soki bozali bato ya sembo, tika ete moko kati na bino atikala awa kati na boloko ; bongo bino bamosusu bokende, bomema ble oyo esengeli mpo na mabota na bino, oyo ezali na nzala makasi. \v 20 Kasi bomemela ngai leki na bino ya suka. Yango ekolakisa ete bolobaki solo mpe bokokufa te. \p Basalaki bongo. \v 21 Balobanaki bango na bango : \pi1 — Solo, tozwi etumbu mpo na makambo oyo tosalaki ndeko na biso ; pamba te tomonaki pasi na ye tango azalaki kobondela biso, kasi toyokaki ye te. Yango wana pasi oyo ekomeli biso. \p \v 22 Ribeni alobaki na bango : \pi1 — Nayebisaki bino ete bosala mwana wana mabe te ? Kasi boyokelaki ngai te. Sik’oyo tosengeli kofuta makila na ye ! \p \v 23 Bayebaki te ete Jozefi akokaki kososola maloba na bango, mpo ete azalaki kosalela molimboli mpo na kosolola na bango. \v 24 Jozefi apesaki mokongo, apusanaki mosika mpe abandaki kolela. Bongo azongelaki bango mpe asololaki lisusu na bango. Azwaki Simeoni kati na bango mpe akangaki ye na miso na bango. \v 25 Jozefi apesaki mitindo ete batondisa ble na basaki na bango, bazongisa mbongo ya moto na moto na saki na ye mpe bapesa bango bilei mpo na nzela. Esalemelaki bango bongo. \v 26 Batiaki ble na bango likolo ya ba-ane na bango mpe bakendeki. \s1 Bandeko ya Jozefi bazongi na Kanana \p \v 27 Na esika oyo batelamaki mpo na kolekisa butu, moko na bango afungolaki saki na ye mpo na koleisa ane na ye mpe amonaki mbongo na ye na moto ya saki na ye. \v 28 Ayebisaki bandeko na ye : \pi1 — Bazongiseli ngai mbongo na ngai, tala yango oyo na saki na ngai ! \p Mitema na bango ebetaki mpe babandaki kolenga, balobanaki bango na bango : \pi1 — Likambo nini oyo Nzambe asali biso ! \p \v 29 Tango bakomaki epai ya tata na bango Jakobi na mokili ya Kanana, bayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki bango. Balobaki : \pi1 \v 30 — Moto oyo azali mokonzi ya mokili alobelaki biso na maloba makasi. Azwaki biso lokola banongi. \v 31 Kasi tolobaki na ye : « Tozali bato ya sembo, tozali banongi te. \v 32 Tozalaki bandeko mibali zomi na mibale, bana ya tata moko. Moko azalaka lisusu te mpe oyo ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, na mokili ya Kanana. » \p \v 33 Na boye, moto oyo azali mokonzi ya mokili azongiselaki biso : « Tala lolenge nakoyeba ete bozali bato ya sembo : ‹ Botikela ngai awa ndeko moko kati na bino. Bozwa biloko ya kolia oyo esengeli mpo na mabota na bino oyo ezali na nzala makasi mpe bokende. \v 34 Boyela ngai leki na bino ya suka. Na bongo, nakoyeba ete bozali banongi te, kasi bato ya sembo ; mpe ngai nakozongisela bino ndeko na bino, sima nakotika bino mpo ete bokoka kosala mombongo na mokili. › » \p \v 35 Tango bafungolaki basaki na bango, moko na moko amonaki mbongo na ye na saki. Bango na tata na bango bamonaki mbongo mpe bango nyonso babangaki. \v 36 Tata na bango Jakobi alobaki na bango : \pi1 — Bozangisi ngai bana na ngai mibale ya mibali : Jozefi azali lisusu te, Simeoni mpe azali lisusu te. Mpe sik’oyo bolingi kozwa lisusu Benjame ! Makambo oyo nyonso ezali kokweyela kaka ngai ! \p \v 37 Ribeni alobaki na tata na ye : \pi1 — Pesa ngai Benjame, mpe nakomemela yo ye. Soki namemeli yo ye te, boma bana na ngai mibale ya mibali. \p \v 38 Jakobi azongisaki : \pi1 — Te ! Mwana na ngai akokende elongo na bino te. Ndeko na ye ya mobali akufa ; natikala kaka na ye. Soki likama ekweyeli ye na mobembo oyo bozali kokende, wana bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai ! \c 43 \s1 Mobembo ya mibale na Ejipito \p \v 1 Nzala makasi ekotaki kati na mokili. \v 2 Tango libota ya Jakobi baliaki biloko nyonso oyo bamemaki wuta na Ejipito, Jakobi alobaki na bana na ye : \pi1 — Bozonga kuna kosomba ndambo ya biloko. \p \v 3 Yuda azongisaki : \pi1 — Moto wana alobaki na biso ete tozonga kuna te soki ndeko na biso azali elongo na biso te. \v 4 Soki otiki ndeko na biso kokende elongo na biso, wana tokokende na Ejipito mpe tokosombela yo biloko. \v 5 Kasi soki otiki ye te, biso mpe tokokende te ; pamba te moto wana ayebisaki biso malamu : « Bokotelema liboso na ngai te soki ndeko na bino azali te. » \p \v 6 Isalaele azongisaki : \pi1 — Mpo na nini bosali ngai mabe boye ? Mpo na nini boyebisaki moto wana ete bozali na ndeko mosusu ? \p \v 7 Bazongisaki : \pi1 — Moto yango atunaki biso malamu makambo oyo etali biso moko mpe libota na biso. Atunaki biso : « Tata na bino azali nanu na bomoi ? Bozali na ndeko mosusu ya mobali ? » Mpe biso topesaki eyano na mituna na ye. Tokokaki te koyeba ete akoloba na biso : « Boya na ndeko na bino ya mobali awa. » \p \v 8 Yuda ayebisaki tata na ye Isalaele : \pi1 — Tata, tika Benjame akende elongo na ngai. Tokotelema mpe tokokende mpo ete biso elongo na yo mpe bana na biso, tozala na bomoi, kasi tokufa te na nzala. \v 9 Nandimi kobatela ye ; boye okotuna ye na maboko na ngai. Soki nazongiseli yo ye te mpe namemi ye liboso na yo te, tika ete nazala na ngambo epai na yo bomoi na ngai mobimba. \v 10 Soki towumelaki te, tokokaki kozonga mbala ya mibale. \p \v 11 Tata na bango Isalaele alobaki na bango : \pi1 — Soki esengeli kozala bongo, wana bosala boye : botia na basaki na bino biloko oyo eleki kitoko kati na mokili mpe bopesa yango lokola kado epai ya moto wana : ndambo ya mafuta ya solo kitoko, ndambo ya mafuta ya nzoyi, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, lodanumi, pisitashi mpe bambuma ya amande. \v 12 Bozwa mbala mibale motuya ya mbongo oyo ezalaki kati na basaki na bino mpe bozongisa mbongo oyo bokutaki na basaki na bino ; tango mosusu ezalaki libunga. \v 13 Bozwa ndeko na bino ya mobali, botelema mpe bozonga epai ya moto wana. \v 14 Tika ete Nzambe-Na-Nguya-Nyonso ayokela bino mawa tango bokotelema liboso ya moto wana, mpo ete bokoka kozwa ndeko na bino mosusu, mpe Benjame azonga elongo na bino. Kasi mpo na ngai, soki nakozanga bana, malamu nazanga bango ! \p \v 15 Boye bato yango bazwaki bakado ; bazwaki lisusu mbala mibale motuya ya mbongo oyo ezalaki na basaki na bango mpe Benjame. Bakendeki na Ejipito mpe bamilakisaki na miso ya Jozefi. \s1 Jozefi ayambi bandeko na ye \p \v 16 Tango Jozefi amonaki Benjame elongo na bango, alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi na ye : « Mema bato oyo na ndako na ngai ; boboma nyama moko mpe bolamba yango mpo ete bato oyo bakolia elongo na ngai na midi. » \p \v 17 Moto yango asalaki ndenge kaka Jozefi alobaki na ye mpe amemaki bango na ndako ya Jozefi. \v 18 Bato yango babangaki makasi tango bamemaki bango na ndako ya Jozefi mpe bazalaki kolobana bango na bango : \pi1 — Bamemi biso awa likolo ya mbongo oyo batiaki na basaki na biso, na mbala ya liboso. Bakokweya likolo na biso, bakolonga biso, bakokanga biso lokola bawumbu mpe bakozwa ba-ane na biso. \p \v 19 Bapusanaki pembeni ya moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako ya Jozefi mpe balobaki na ye na ekuke ya ndako : \pi1 \v 20 — Limbisa biso, nkolo na ngai ! Toyaki mbala ya liboso mpo na kosomba biloko ya kolia ; \v 21 kasi tango totelemaki na esika ya kolekisa butu, tofungolaki basaki na biso ; mpe moko na moko kati na biso amonaki mbongo na ye kati na saki na ye ndenge kaka ezalaki, yango wana tozongi na yango. \v 22 Tomemi mbongo mosusu mpo na kosomba biloko ya kolia, toyebi te nani azongisaki mbongo na biso na basaki na biso. \p \v 23 Alobaki na bango : \pi1 — Malamu ! Bobanga te. Ezali Nzambe na bino, Nzambe ya tata na bino, nde atiaki bomengo kati na basaki na bino. Kasi mpo na mbongo na bino, ngai nazwaki yango. \p Sima, amemelaki bango Simeoni. \v 24 Moto yango akotisaki bango na ndako ya Jozefi, apesaki bango mayi ya kosukola makolo mpe abongisaki bilei mpo na ba-ane na bango. \v 25 Babongisaki bakado na bango mpo na boyei ya Jozefi na midi, pamba te bayokaki ete bakolia kuna. \v 26 Tango Jozefi ayaki na ndako, bapesaki ye bakado oyo bamemaki na ndako mpe bagumbamaki liboso na ye mito na se. \v 27 Atunaki bango : \pi1 — Boni, bozali malamu ? \m Abakisaki : \pi1 — Boni tata na bino ya mobange oyo boyebisaki ngai, azali malamu ? \p \v 28 Bazongisaki : \pi1 — Mosali na yo, tata na biso, azali nanu na bomoi mpe azali malamu. \p Bakitisaki mito mpe bagumbamaki liboso na ye. \p \v 29 Tango Jozefi atombolaki miso, amonaki Benjame, ndeko na ye ya mobali, mwana ya mama na ye. Atunaki : \pi1 — Ye wana nde ndeko na bino ya suka oyo boyebisaki ngai ? \m Abakisaki : \pi1 — Tika ete Nzambe atalisa yo ngolu na Ye. \p \v 30 Jozefi ayokaki pasi makasi na motema tango amonaki ndeko na ye, akimaki mbangu na libanda mpe alukaki esika mpo na kolela. Akotaki na shambre na ye mpe alelaki kuna. \v 31 Tango asilisaki kosukola elongi na ye, abimaki libanda, akangaki motema mpe alobaki : \pi1 — Botia biloko ya kolia na mesa. \p \v 32 Batielaki Jozefi bilei na mesa na ye moko, bandeko na ye mpe na mesa na bango ; bongo bato ya Ejipito oyo bazalaki kolia na ye esika moko, bango mpe na mesa na bango, pamba te bato ya Ejipito bakokaki te kolia esika moko na Ba-Ebre, pamba te ezalaki ekila mpo na bato ya Ejipito. \v 33 Bavandisaki bango, kobanda na mwana ya liboso kino na oyo ya suka, bazalaki kotalana bango na bango na kokamwa. \v 34 Jozefi apesaki bango biloko oyo ewutaki na mesa na ye ; mpe Benjame azwaki mbala mitano koleka bango nyonso. Na bongo, bamelaki elongo na ye mpe balangwaki. \c 44 \s1 Bakangi Benjame moyibi \p \v 1 Jozefi apesaki mitindo epai ya moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye : « Tondisa biloko ya kolia na basaki ya bato oyo kolanda kilo oyo bakoki komema mpe tia mbongo ya moko na moko na moto ya saki na ye. \v 2 Okotia kopo na ngai oyo ya palata na moto ya saki ya leki na bango ya suka elongo na mbongo na ye ya ble. » \p Moto yango asalaki ndenge kaka Jozefi alobaki na ye. \v 3 Na tongo-tongo, batikaki bandeko ya Jozefi kozonga elongo na ba-ane na bango. \v 4 Wana babimaki na engumba, bamikomelaki nanu mosika te, Jozefi alobaki na moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako na ye : « Telema, landa bato wana ! Mpe tango okokanga bango, tuna bango : mpo na nini bozongisi mabe na malamu ? \v 5 Mpo na nini boyibi kopo oyo nkolo na ngai amelelaka mayi mpe asalelaka mpo na koyeba makambo oyo ekoya ? Likambo oyo bosali ezali penza mabe. » \p \v 6 Mokambi ya ndako ya Jozefi akangaki bango mpe alobelaki bango lolenge nkolo na ye atindaki ye. \v 7 Kasi bazongiselaki ye : \pi1 — Mpo na nini nkolo na biso alobi makambo ya boye ? Basali na yo bakoki kosala makambo ya boye te. \v 8 Tomemelaki yo mbongo oyo tomonaki tango tofungolaki basaki na biso wuta na mokili ya Kanana. Ndenge nini tokoki lisusu koyiba wolo to palata kati na ndako ya nkolo na yo ? \v 9 Soki moko kati na basali na yo amonani ete azali na yango, akokufa ; mpe biso bamosusu oyo totikali, tokokoma bawumbu ya nkolo na biso. \p \v 10 Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya ndako ya Jozefi alobaki : \pi1 — Malamu mingi ! Tika ete ezala ndenge bolobi ! Moto oyo akomonana ete azali na yango, akokoma mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bokozala na likambo te. \p \v 11 Moko na moko akitisaki saki na ye na lombangu na mabele mpe afungolaki yango. \v 12 Moto oyo azalaki na mokumba ya kobatela bozwi ya Jozefi abandaki koluka kobanda na kulutu kino na leki. Mpe kopo emonanaki na saki ya Benjame. \v 13 Tango bamonaki bongo, bapasolaki bilamba na bango ; bazongisaki biloko na ba-ane na bango mpe bazongaki bango nyonso na engumba. \p \v 14 Jozefi azalaki kaka na ndako. Tango Yuda na bandeko na ye ya mibali bakotaki na ndako, bagumbamaki kino na se liboso na ye. \v 15 Jozefi alobaki na bango : \pi1 — Likambo nini oyo bosali ? Boyebi te ete moto lokola ngai nazali na makoki ya komona makambo na bosoloka ? \p \v 16 Yuda azongisaki : \pi1 — Likambo nini tokoki koloba na nkolo na ngai ? Tokoloba lisusu nini ? Ndenge nini tokoki kotalisa ete toyebi likambo te ? Nzambe alakisi polele mbeba ya basali na yo. Tokomi sik’oyo bawumbu ya nkolo na ngai, biso nyonso elongo na ye oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye. \p \v 17 Kasi Jozefi alobaki : \pi1 — Nakoki kosala likambo ya boye te ! Kaka moto oyo amonani ete azalaki na kopo kati na saki na ye nde akozala mowumbu na ngai. Bino ba-oyo botikali, bozonga na kimia epai ya tata na bino. \p \v 18 Yuda apusanaki pembeni na ye mpe alobaki : \pi1 — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Tika ete mosali na yo aloba liloba moko epai ya nkolo na ngai. Kosilikela mosali na yo te, pamba te ndenge Faraon azali, ndenge wana mpe yo ozali. \v 19 Nkolo na ngai atunaki basali na ye : « Bozali na tata to na ndeko mosusu ya mobali ? » \v 20 Tozongiselaki nkolo na ngai : « Tozali na tata oyo akomi mobange mpe ndeko mobali ya leki oyo babotelaki tata na biso na kimobange. Ndeko na ye ya mobali akufa mpe atikala kaka ye moko mwana mobali na libumu ya mama na ye, mpe tata na ye alingaka ye mingi. » \v 21 Bongo olobaki na basali na yo : « Bomemela ngai ye mpo ete nakoka komona ye na miso na ngai. » \v 22 Tozongiselaki nkolo na ngai : « Elenge mobali akoki kotika tata na ye te ; soki atiki ye, tata na ye akokufa. » \v 23 Kasi olobaki na basali na yo : « Soki leki na bino ya mobali ayei elongo na bino te, bokomona lisusu elongi na ngai te. » \v 24 Tango tozongaki epai ya mosali na yo, tata na ngai, toyebisaki ye makambo nyonso oyo nkolo na ngai alobaki. \v 25 Bongo tata na biso alobaki : « Bozonga mpe bosomba ndambo ya biloko ya kolia. » \v 26 Kasi tozongisaki : « Tokoki kokende te. Tokokende kaka soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso. Tokoki komona elongi ya moto wana te soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso te. » \pi1 \v 27 Mosali na yo, tata na biso, alobaki na biso : « Boyebi ete mwasi na ngai, Rasheli, abotelaki ngai bana mibale ya mibali. \v 28 Moko na bango akenda mosika na ngai. Nakanisi ete ezali ya solo, nyama moko ya mabe esila kolia ye. Banda tango wana, natikala komona ye lisusu te. \v 29 Soki bozwi ngai lisusu mwana oyo mpe soki likama ekweyeli ye, bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai. » \pi1 \v 30 Sik’oyo, soki elenge mobali azali elongo na biso te tango nakozonga epai ya tata na ngai, mosali na yo, mpe soki tata na ngai, oyo motema na ye ekangama makasi na motema ya elenge mobali oyo, \v 31 amoni ete elenge mobali azali elongo na biso te, wana akokufa. Basali na yo bakoboma tata na biso na pasi na kimobange na ye. \v 32 Pamba te ngai mosali na yo, nandimaki, na miso ya tata na ngai, kobatela elenge mobali oyo. Nalobaki : « Soki nazongiseli yo ye te, nakozala na ngambo liboso na yo tata na ngai, bomoi na ngai mobimba. » \pi1 \v 33 Yango wana sik’oyo, nabondeli yo, tika ete mosali na yo akoma mowumbu ya nkolo na ngai na esika ya elenge mobali oyo mpe tika ete elenge mobali azonga elongo na bandeko na ye ya mibali. \v 34 Ndenge nini nakoki kozonga epai ya tata na ngai soki elenge mobali azali elongo na ngai te ? Kotika te ete namona pasi oyo ekokomela tata na ngai ! \c 45 \s1 Jozefi amilakisi epai ya bandeko na ye \p \v 1 Jozefi akokaki lisusu komikanga te liboso ya bato nyonso oyo bazalaki liboso na ye, agangaki : « Bobimisa bato nyonso ! » Boye, moto moko te azalaki pembeni na ye tango amimonisaki epai ya bandeko na ye ya mibali. \v 2 Lokola alelaki na mongongo makasi, bato ya Ejipito bayokaki ye ; mpe sango ekendeki kino na ndako ya Faraon. \v 3 Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : \pi1 — Nazali Jozefi ! Tata na ngai azali nanu na bomoi ? \p Kasi bandeko na ye bakokaki koyanola ye te, pamba te bazalaki kolenga liboso na ye. \p \v 4 Jozefi alobaki na bango : \pi1 — Bopusana pembeni na ngai ! \p Tango bapusanaki, alobaki : \pi1 — Nazali Jozefi, ndeko na bino ya mobali oyo botekaki mpo ete bamema ngai na Ejipito. \v 5 Kasi sik’oyo, bomitungisa te mpe bozala na mawa te na ndenge botekaki ngai awa. Ezali mpo na kobikisa bomoi na bino nde Nzambe atindaki ngai liboso na bino. \v 6 Oyo ezali mobu ya mibale wuta nzala makasi ekotaki na mokili ; mpe na mibu mitano oyo ezali koya, bakolona te mpe bakobuka te. \v 7 Kasi Nzambe atindaki ngai liboso na bino mpo ete bowumela na mokili mpe bobikisa bomoi na bino na nzela ya kokangolama monene. \v 8 Ezali bino te bato botindaki ngai awa, kasi ezali nde Nzambe. Akomisaki ngai tata ya Faraon, nkolo ya ndako na ye mpe moyangeli ya mokili mobimba ya Ejipito. \v 9 Bozonga noki epai ya tata na ngai mpe boloba na ye : « Mwana na yo, Jozefi, alobi : ‹ Nzambe akomisa ngai nkolo ya Ejipito mobimba ; yaka epai na ngai, kowumela te. \v 10 Okovanda na etuka ya Gosheni mpe okozala pembeni na ngai : yo, bana na yo mpe bakitani na yo, bameme na yo, bantaba na yo, bangombe na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango. \v 11 Kuna, nakokokisa baposa na yo nyonso, pamba te mibu mitano ya nzala makasi ezali koya ; soki te, yo elongo na bana na yo mpe bibwele na yo nyonso, bokokoma na pasi. \v 12 Bino moko bozali komona ! Ndeko na ngai, Benjame, akoki mpe komona yango, ete ezali ngai moto nazali koloba na bino. \v 13 Boyebisa tata na ngai lokumu nyonso oyo nazali na yango awa na Ejipito, boyebisa ye makambo nyonso oyo bosili komona mpe bomemela ngai ye awa na lombangu. › » \p \v 14 Sima, amibwakaki na kingo ya ndeko na ye Benjame mpe alelaki ; Benjame mpe akangaki ye na kingo, bongo alelaki. \v 15 Apesaki bandeko na ye nyonso beze mpe alelaki. Sima na yango, basololaki. \s1 Faraon abengi Jakobi na Ejipito \p \v 16 Tango sango ekomaki na ndako ya Faraon ete bandeko ya Jozefi bayei, Faraon elongo na bakambi na ye nyonso basepelaki. \v 17 Faraon alobaki na Jozefi : \pi1 — Yebisa bandeko na yo : « Botia biloko likolo ya banyama na bino mpe bozonga na mokili ya Kanana. \v 18 Boyela ngai tata na bino mpe mabota na bino ; nakopesa bino mabele oyo eleki kitoko kati na Ejipito mpe bokolia biloko na yango oyo eleki kitoko. » \pi1 \v 19 Okoyebisa bango lisusu : « Bozwa ndambo ya bashario ya Ejipito mpo na bana mpe basi na bino ; bongo bozwa tata na bino mpe bozonga awa. \v 20 Boyoka mawa te mpo na oyo bokotika na Kanana, pamba te biloko nyonso ya kitoko oyo ezali na Ejipito ekozala mpo na bino. » \p \v 21 Bana ya Isalaele basalaki makambo oyo bayebisaki bango. Jozefi apesaki bango bashario ndenge Faraon apesaki mitindo mpe apesaki bango bilei mosusu mpo na mobembo na bango. \v 22 Jozefi apesaki epai ya moko na moko kati na bango bilamba ya sika ; apesaki Benjame mbongo ya bibende, nkama misato, elongo na bilamba ya sika. \v 23 Atindelaki tata na ye biloko oyo : ba-ane zomi etonda na bilamba ya kitoko ya Ejipito mpe bampunda zomi ya basi etonda na ble, mapa mpe bilei mpo na mobembo na ye. \v 24 Jozefi atikaki bandeko na ye kokende. Tango bazali kolongwa, alobaki na bango : \pi1 — Boswana te na nzela. \s1 Bandeko ya Jozefi bazongi na Kanana \p \v 25 Balongwaki na Ejipito mpe bakendeki epai ya tata na bango Jakobi, na mokili ya Kanana. \v 26 Balobaki na ye : \pi1 — Jozefi azali nanu na bomoi. Ye nde moto azali koyangela Ejipito mobimba. \p Jakobi ayokaki nzoto malili mpe andimelaki bango te. \v 27 Kasi tango bayebisaki ye makambo nyonso oyo Jozefi alobaki mpo na bango mpe tango amonaki bashario oyo Jozefi atindaki mpo na komema ye na Ejipito, molimo ya tata na bango Jakobi ezongaki. \v 28 Mpe Isalaele alobaki : \pi1 — Ya solo, nandimi ete mwana na ngai Jozefi azali nanu na bomoi ; nakokende mpe nakomona ye liboso ete nakufa. \c 46 \s1 Jakobi akei na Ejipito \p \v 1 Isalaele akendeki na nyonso oyo azalaki na yango. Tango akomaki na Beri-Sheba, abonzaki mbeka epai ya Nzambe ya Izaki, tata na ye. \v 2 Na butu, Nzambe alobaki na Isalaele na nzela ya emoniseli : \pi1 — Jakobi ! Jakobi ! \p Jakobi azongisaki : \pi1 — Ngai oyo. \p \v 3 Nzambe alobaki : \pi1 — Nazali Nzambe, Nzambe ya tata na yo. Kobanga te kokende na Ejipito, pamba te nakokomisa yo ekolo monene kuna. \v 4 Ngai moko nakokende elongo na yo na Ejipito ; mpe ya solo, nakozongisa yo lisusu. Loboko ya Jozefi ekozipa miso na yo. \p \v 5 Bongo Jakobi alongwaki na Beri-Sheba. Bana mibali ya Isalaele bamatisaki na bashario oyo Faraon atindaki mpo na komema ye : tata na bango Jakobi, bana na bango mpe basi na bango. \v 6 Bamemaki lisusu bibwele na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango na mokili ya Kanana ; mpe Jakobi elongo na bakitani na ye nyonso bakendeki na Ejipito. \v 7 Azwaki elongo na ye mpo na kokende na Ejipito : bana na ye ya mibali, bakoko na ye ya mibali mpe bana na ye ya basi elongo na bakoko na ye ya basi : bakitani na ye nyonso. \s1 Libota ya Jakobi na Ejipito \li4 \v 8 Tala bakombo ya bana mibali ya Isalaele, oyo bakendeki na Ejipito : \b \li1 Ribeni, mwana liboso ya Jakobi. \li1 \v 9 Bana mibali ya Ribeni : \li2 Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi. \li1 \v 10 Bana mibali ya Simeoni : \li2 Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo babotelaki ye na mwasi ya mokili ya Kanana. \li1 \v 11 Bana mibali ya Levi : \li2 Gerishoni, Keati mpe Merari. \li1 \v 12 Bana mibali ya Yuda : \li2 Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. \li1 Bana mibali ya Peretsi : \li2 Etsironi mpe Amuli. \li1 \v 13 Bana mibali ya Isakari : \li2 Tola, Puwa, Yashubi mpe Shimironi. \li1 \v 14 Bana mibali ya Zabuloni : \li2 Seredi, Eloni mpe Yaleyeli. \li4 \v 15 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Lea abotelaki Jakobi kati na Padani-Arami ; bakisa Dina, mwana mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki tuku misato na misato. \b \li1 \v 16 Bana mibali ya Gadi : \li2 Tsefoni, Agi, Shuni, Etsiboni, Eri, Arodi mpe Areeli. \li1 \v 17 Bana mibali ya Aseri : \li2 Yimina, Yishiva, Yishivi, Beria mpe ndeko na bango ya mwasi Sera. \li1 Bana mibali ya Beria : \li2 Eberi mpe Malikieli. \li4 \v 18 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Zilipa abotelaki Jakobi ; Zilipa azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya Lea, mwana na ye ya mwasi. Bana na ye nyonso ya basi mpe ya mibali bazalaki zomi na motoba. \b \li1 \v 19 Bana mibali ya Rasheli, mwasi ya Jakobi : \li2 Jozefi mpe Benjame. \p \v 20 Kati na mokili ya Ejipito, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya engumba Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale : Manase mpe Efrayimi. \li1 \v 21 Bana mibali ya Benjame : \li2 Bela, Bekeri, Ashibeli, Gera, Namani, Eyi, Roshi, Mupimi, Upime mpe Aridi. \li4 \v 22 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Rasheli abotelaki Jakobi : bango nyonso bazalaki zomi na minei. \b \li1 \v 23 Mwana mobali ya Dani : \li2 Ushimi. \li1 \v 24 Bana mibali ya Nefitali : \li2 Yatseyeli, Guni, Yetseri mpe Shilemi. \li4 \v 25 Bango nde bazalaki bana mibali oyo Bila abotelaki Jakobi ; bango nyonso bazalaki sambo. Bila azalaki mwasi mosali oyo Labani apesaki epai ya mwana na ye ya mwasi Rasheli. \b \li4 \v 26 Bato nyonso oyo bakendeki na Ejipito elongo na Jakobi, oyo bazalaki penza bakitani na ye, longola basi ya bana na ye, bango nyonso bazalaki tuku motoba na motoba. \v 27 Bana mibali ya Jozefi oyo babotamaki na Ejipito bazalaki mibale. Bato nyonso ya libota ya Jakobi oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo. \s1 Jakobi kati na Gosheni \p \v 28 Liboso ete Jakobi akutana na Jozefi, atindaki Yuda epai ya Jozefi mpo na kobongisa bokutani na bango na Gosheni. Tango bakomaki na Gosheni, \v 29 Jozefi abongisaki Shario na ye mpe akendeki kokutana na Isalaele, tata na ye, na Gosheni. Tango kaka akomaki liboso na ye, ayambaki tata na ye mpe alelaki mingi. \p \v 30 Isalaele alobaki na Jozefi : \pi1 — Sik’oyo, nakoki na ngai kokufa mpo ete namoni yo penza na miso na ngai moko, mpe ozali nanu na bomoi ! \p \v 31 Jozefi alobaki na bandeko na ye mpe na libota ya tata na ye : \pi1 — Nakokende koyebisa Faraon : « Bandeko na ngai mpe libota ya tata na ngai, ba-oyo bavandaka na mokili ya Kanana, bayei epai na ngai. \v 32 Bazali babateli bibwele, babokolaka bibwele. Bamemi bameme, bantaba, bangombe na bango mpe biloko nyonso oyo bazalaki na yango. » \v 33 Tango Faraon akobenga bino mpe akotuna bino : « Bosalaka mosala nini ? » \v 34 Bokozongisa : « Basali na yo babokolaka bibwele wuta bomwana na biso kino sik’oyo ndenge bakoko na biso bazalaki kosala. » Soki kaka bolobi bongo, akopesa bino nzela ya kovanda na Gosheni, pamba te bato ya Ejipito balingaka te babateli nyonso ya bibwele. \c 47 \s1 Jakobi akomi epai ya Faraon \p \v 1 Jozefi akendeki mpe alobaki na Faraon : \pi1 — Tata na ngai elongo na bandeko na ngai bayei wuta na mokili ya Kanana na bameme, bantaba, bangombe mpe biloko na bango nyonso ; bazali sik’oyo na Gosheni. \p \v 2 Jozefi aponaki bandeko na ye mitano mpe alakisaki bango epai ya Faraon. \p \v 3 Faraon atunaki bandeko ya Jozefi : \pi1 — Bosalaka mosala nini ? \p Bazongiselaki Faraon : \pi1 — Basali na yo bazali babateli bibwele ndenge kaka bakoko na biso bazalaki. \p \v 4 Balobaki lisusu na Faraon : \pi1 — Toyei kovanda awa, pamba te nzala makasi ezali kati na mokili ya Kanana mpe matiti ezali lisusu te mpo na bibwele ya basali na yo ; yango wana, tobondeli yo, pesa basali na yo nzela ya kovanda na Gosheni. \p \v 5 Faraon alobaki na Jozefi : \pi1 — Tata na yo mpe bandeko na yo bayei epai na yo ; \v 6 mokili ya Ejipito mpe ezali na maboko na yo. Vandisa tata na yo mpe bandeko na yo na eteni ya mabele oyo eleki kitoko ; tika ete bavanda na Gosheni. Mpe soki oyebi kati na bango bato ya mayele, pesa bango mokumba ya kobatela bibwele na ngai. \p \v 7 Jozefi amemaki tata na ye mpo na kolakisa ye epai ya Faraon. Tango Jakobi asilisaki kopambola Faraon, \v 8 Faraon atunaki Jakobi : \pi1 — Ozali na mibu boni ? \p \v 9 Jakobi azongiselaki Faraon : \pi1 — Nazali na mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. Mikolo ya bomoi na ngai ezali moke mpe ya pasi, ekokokana te na mikolo ya bomoi ya bakoko na ngai. \p \v 10 Jakobi apambolaki Faraon mpe alongwaki liboso na ye. \p \v 11 Jozefi avandisaki tata na ye mpe bandeko na ye na Ejipito mpe apesaki bango eteni ya mabele oyo eleki kitoko kati na mokili, na mabele ya Ramisesi, ndenge kaka Faraon atindaki. \v 12 Jozefi apesaki lisusu biloko ya kolia epai ya tata na ye, bandeko na ye mpe epai ya libota ya tata na ye mobimba kolanda motango ya bana na bango. \s1 Jozefi mpe nzala makasi \p \v 13 Biloko ya kolia ezalaki lisusu te kati na mokili mobimba mpe nzala makasi eyaki. Mokili ya Ejipito mpe oyo ya Kanana ekawukaki na nzala makasi. \v 14 Jozefi azwaki mbongo nyonso oyo azalaki kobomba tango bato ya mokili ya Ejipito mpe ya Kanana bazalaki kosomba ble epai na ye, amemaki yango na ndako ya Faraon. \v 15 Tango mbongo ya bato ya Ejipito mpe ya Kanana esilaki, bato nyonso ya Ejipito bayaki epai ya Jozefi mpe balobaki : \pi1 — Pesa biso biloko ya kolia ! Mpo na nini tokufa na nzala na miso na yo ? Mpo ete mbongo na biso esili ? \p \v 16 Jozefi azongisaki : \pi1 — Soki bozali lisusu na mbongo te, bomemela ngai bibwele na bino. Bokopesa ngai bibwele na bino na esika ya mbongo. \p \v 17 Bamemaki epai ya Jozefi bampunda, bantaba mpe bangombe na bango ; bongo Jozefi apesaki bango bilei na esika ya bampunda, ba-ane, bameme, bantaba mpe bangombe na bango. Na mibu nyonso wana oyo Jozefi azalaki kopesa bango bilei, bango bazalaki kopesa ye bibwele na bango. \p \v 18 Tango mibu wana esilaki, bayaki lisusu epai na ye na mibu oyo elandaki. Balobaki : \pi1 — Tokoki kobombela nkolo na biso te ete mbongo na biso esili mpe bibwele na biso ekomi ya yo. Totikali lisusu na eloko moko te longola kaka banzoto na biso mpe mabele na biso. \v 19 Mpo na nini, biso elongo na mabele na biso, tokufa na miso na yo ? Somba biso kaka elongo na mabele na biso na motuya ya biloko ya kolia ; mpe biso elongo na mabele na biso, tokokoma bawumbu ya Faraon. Toboyi na biso kokufa na nzala, pesa biso milona ya kolona mpo ete tobika mpe mabele na biso ekoma esobe te. \p \v 20 Jozefi asombaki mabele nyonso ya Ejipito mpo na Faraon, pamba te bato nyonso ya Ejipito batekaki bilanga na bango mpo ete nzala elekaki makasi. Boye mabele ekomaki ya Faraon. \v 21 Jozefi akomisaki bavandi ya bingumba nyonso ya Ejipito bawumbu ya Faraon. \v 22 Kasi asombaki mabele ya banganga-nzambe te, pamba te bazalaki kozwa tango nyonso biloko ebele kolanda mobeko ya Faraon ete bazwaka biloko ya kolia. Yango wana, banganga-nzambe batekaki mabele na bango te. \p \v 23 Jozefi alobaki na bato : \pi1 — Nasombi bino lelo mpo na Faraon, bino mpe mabele na bino. Tala milona mpo na bino mpo ete bokoka kolona mabele. \v 24 Kasi tango bokobuka mbuma, bokopesa eteni ya mitano epai ya Faraon. Biteni minei oyo mosusu, bokobomba yango lokola milona mpo na bilanga mpe lokola biloko ya kolia mpo na bino moko, mpo na mabota na bino mpe mpo na bana na bino. \p \v 25 Bazongisaki : \pi1 — Obikisi bomoi na biso ! Lokola tozwi ngolu na miso na yo nkolo na biso, tokozala bawumbu ya Faraon. \p \v 26 Bongo Jozefi akomisaki yango mobeko kino lelo kati na mabele ya Ejipito : eteni ya mitano ya bambuma nyonso oyo ekowuta na mabele ezali mpo na Faraon. Kasi mabele ya Banganga-Nzambe ekomaki ya Faraon te. \p \v 27 Boye bana ya Isalaele bavandaki na Ejipito, na Gosheni. Kuna bakomaki na bozwi ebele, babotaki bana mpe bakomaki ebele. \s1 Kufa ya Jakobi mpe ya Jozefi \p \v 28 Jakobi awumelaki mibu zomi na sambo na Ejipito. Mpe mibu ya bomoi na ye ezalaki nkama moko na tuku minei na sambo. \v 29 Tango mokolo ya kufa ya Isalaele ekomaki pene, abengaki Jozefi, mwana na ye ya mobali, mpe alobaki na ye : \pi1 — Soki nazwi ngolu na miso na yo, tia loboko na yo na se ya mopende na ngai ; laka ngai ete okotalisa ngai bolamu mpe boyengebene, mpe okokunda ngai na Ejipito te. \v 30 Kasi tango nakolala elongo na bakoko na ngai, okobimisa ngai na Ejipito mpe okokunda ngai na esika oyo bakunda bango. \p Jozefi azongisaki : \pi1 — Nakosala ndenge olobi. \p \v 31 Bongo Jakobi alobaki lisusu : \pi1 — Lapa ndayi mpo na kolakisa ete okosala ndenge olobi. \p Boye, Jozefi alapaki ndayi na miso na ye ; mpe Isalaele agumbamaki na koyekama na moto ya mbeto na ye. \c 48 \s1 Manase mpe Efrayimi \p \v 1 Sima na makambo wana, bayaki koyebisa Jozefi : « Tala, tata na yo azali kobela. » Jozefi azwaki bana na ye mibale ya mibali : Manase mpe Efrayimi. \v 2 Bapesaki sango epai ya Jakobi ete mwana na ye ya mobali Jozefi azali koya epai na ye. Isalaele asalaki makasi mpe avandaki na mbeto. \v 3 Jakobi alobaki na Jozefi : \pi1 — Nzambe-Na-Nguya-Nyonso abimelaki ngai na Luze, na mokili ya Kanana ; mpe kuna, apambolaki ngai. \v 4 Alobaki na ngai : « Nakopesa yo mabota mpe nakokomisa yo ebele ; nakokomisa yo lisanga ya bikolo ebele mpe nakopesa mokili oyo lokola libula ya seko na seko epai ya bakitani na yo sima na yo. » \v 5 Mpe sik’oyo, bana na yo ya mibali oyo babotamaki na Ejipito liboso ete ngai naya awa, bakomi lokola bana na ngai. Efrayimi mpe Manase bakomi bana na ngai lokola Ribeni mpe Simeoni. \v 6 Bana oyo okobota sima na bango bakozala ya yo ; bakozwa eteni na bango ya libula na kombo ya bayaya na bango. \v 7 Pamba te, tango nawutaki na Padani, Rasheli akufaki na nzela, na maboko na ngai, wana nazalaki kokende na mokili ya Kanana, pene ya Efrata ; nakundaki ye kuna pembeni ya Efrata oyo babengaka Beteleemi. \p \v 8 Tango Isalaele amonaki bana mibali ya Jozefi, atunaki : \pi1 — Ba-oyo bazali banani ? \p \v 9 Jozefi azongiselaki tata na ye : \pi1 — Bazali bana mibali oyo Nzambe apesi ngai awa. \p Isalaele alobaki : \pi1 — Pusa bango mpo ete napambola bango. \p \v 10 Miso ya Isalaele elembaki mpo na kimobange mpe azalaki komona lisusu malamu te. Yango wana, Jozefi apusaki bana na ye ya mibali pembeni ya tata na ye, Isalaele apesaki bango beze mpe ayambaki bango. \p \v 11 Isalaele alobaki na Jozefi : \pi1 — Nazalaki na elikya te ete nakomona lisusu elongi na yo ; kasi sik’oyo Nzambe apesi ngai nzela ya komona kutu bana na yo. \p \v 12 Jozefi alongolaki bana na ye na mabolongo ya Isalaele mpe agumbamaki elongi na ye kino na se. \v 13 Jozefi azwaki bango mibale : Efrayimi na loboko na ye ya mobali, loboko ya mwasi ya Isalaele ; mpe Manase, na loboko na ye ya mwasi, loboko ya mobali ya tata na ye. Apusaki bango pembeni ya Isalaele. \v 14 Isalaele asembolaki loboko na ye ya mobali mpe atiaki yango likolo ya moto ya Efrayimi oyo azalaki leki ; mpe loboko na ye ya mwasi likolo ya moto ya Manase. Na bongo, abongolaki maboko na ye mpo ete Manase azalaki mwana ya liboso. \p \v 15 Isalaele apambolaki Jozefi mpe alobaki : \q1 Tika ete Nzambe oyo, liboso na Ye, \q2 bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki, batambolaki, \q1 Nzambe oyo azali Mobateli na ngai \q2 wuta mokolo ya mbotama na ngai kino na mokolo ya lelo, \q1 \v 16 anjelu oyo akangolaki ngai na mabe nyonso, \q2 apambola bana oyo ya mibali ! \q1 Tika ete babengama na kombo na ngai, \q2 mpe na bakombo ya bakoko na ngai, Abrayami mpe Izaki ! \q2 Tika ete bakoma ebele kati na mokili ! \p \v 17 Tango Jozefi amonaki ete tata na ye atiaki loboko na ye ya mobali na moto ya Efrayimi, asepelaki te. Azwaki loboko ya tata na ye, alongolaki yango na moto ya Efrayimi mpo na kotia yango na moto ya Manase. \v 18 Jozefi alobaki na tata na ye : \pi1 — Boye te, tata na ngai ! Oyo azali mwana ya liboso ; tia loboko na yo ya mobali likolo ya moto na ye. \p \v 19 Kasi tata na ye aboyaki mpe alobaki : \pi1 — Nayebi, mwana na ngai ! Nayebi ! Ye mpe akokoma ekolo, akokoma monene. Nzokande, leki na ye akozala monene koleka ye mpe bakitani na ye bakokoma lisanga ya bikolo. \p \v 20 Apambolaki bango wana mpe alobaki : \q1 Bato ya Isalaele bakotangaka bakombo na bino \q2 mpo na kopambola : \q2 « Tika ete Nzambe akomisa bino lokola Efrayimi mpe Manase ! » \m Boye Isalaele atiaki Efrayimi liboso ya Manase. \p \v 21 Bongo Isalaele alobaki na Jozefi : \pi1 — Etikali moke nakufa. Nzambe akozala na bino mpe akozongisa bino na mokili ya bakoko na bino. \v 22 Mpo na ngai, napesi yo koleka oyo napesaki epai na bandeko na yo : eteni ya mabele oyo nabotolaki, na mopanga mpe na tolotolo na ngai, epai ya bato ya Amori. \c 49 \s1 Jakobi apamboli bana na ye ya mibali \p \v 1 Jakobi abengaki bana na ye ya mibali mpe alobaki : \pi1 — Bosangana mpo ete nakoka koyebisa bino makambo oyo ekokomela bino na mikolo oyo ekoya. \v 2 Bosangana mpe boyoka, bana mibali ya Jakobi ! Boyoka oyo tata na bino Isalaele akoloba : \b \q1 \v 3 « Ribeni, ozali mwana na ngai ya liboso, \q2 makasi na ngai, elembo ya liboso ya makasi na ngai ; \q2 oleki na lokumu mpe na nguya. \q1 \v 4 Mobulu lokola mayi, okokende liboso te, \q2 pamba te omataki na mbeto ya tata na yo, \q1 esika oyo ngai nalalaka, \q2 mpe okomisi yango mbindo. \b \q1 \v 5 Simeoni mpe Levi bazali bandeko, \q2 mipanga na bango ezali bibundeli mpo na kotia mobulu. \q1 \v 6 Molimo na ngai, kosangana te \q2 na mabongisi na bango ya kosala mabe ! \q1 Lokumu na ngai, kokota te \q2 na lisanga na bango ! \q1 Pamba te na kanda na bango, babomaki bato ; \q2 mpe na esengo na bango, basepelaki kokata \q2 misisa ya makolo ya bangombe ya mibali. \q1 \v 7 Tika ete kanda na bango elakelama mabe, \q2 pamba te ezali makasi ! \q1 Tika ete kotomboka na bango elakelama mabe, \q2 pamba te ezanga mawa ! \q1 Nakokabola bango na Jakobi \q2 mpe nakopanza bango kati na Isalaele. \b \q1 \v 8 Yuda, bandeko na yo ya mibali bakokumisa yo, \q2 loboko na yo ekozala na kingo ya banguna na yo ; \q2 bana mibali ya tata na yo bakogumbama liboso na yo. \q1 \v 9 Yuda, ozali mwana ya nkosi ; \q2 mwana na ngai ya mobali, owuti na bokila. \q1 Agunzami mpe alali lokola nkosi ya mobali ; \q2 mpe lokola nkosi ya mwasi, nani akomeka kotelemisa ye ? \q1 \v 10 Nzete ya bokonzi ekolongwa te na Yuda, \q2 lingenda mpe ekolongwa te kati na makolo na ye, \q1 kino tango nkolo na ye akoya, \q2 nkolo oyo bikolo nyonso ekotosa. \q1 \v 11 Akokanga ane na ye na nzete ya vino, \q2 mpe mwana ya ane na etape oyo ye akopona ; \q1 akosukola bilamba na ye na vino ; \q2 mpe kazaka na ye, na masanga ya vino ya motane. \q1 \v 12 Miso na ye ekozala motane koleka vino, \q2 mpe minu na ye ekozala pembe koleka miliki. \b \q1 \v 13 Zabuloni akowumela pene ya ebale monene, \q2 eteni ya mabele na ye ekozala libongo ya masuwa, \q2 mpe mabele na ye ekokende kino na Sidoni. \b \q1 \v 14 Isakari azali ane ya makasi \q2 oyo elali kati na mapango mibale. \q1 \v 15 Amonaki ete bopemi ezali malamu, \q2 mpe mokili na ye ezali kitoko ; \q1 boye mapeka na ye ekomema mikumba \q2 mpe abongi mpo na misala ya bowumbu. \b \q1 \v 16 Dani akokamba bato na ye \q2 lokola moko kati na bikolo ya Isalaele. \q1 \v 17 Dani akozala lokola nyoka na balabala \q2 to lokola etupa na nzela, \q1 oyo eswaka litindi ya mpunda \q2 mpo ete motambolisi na yango akweya. \b \q1 \v 18 Oh Yawe, nazali na elikya ete okobikisa ngai ! \b \q1 \v 19 Gadi, banguna ebele bakobundisa ye, \q2 kasi ye mpe akobundisa bango kino kobengana bango. \b \q1 \v 20 Bilei oyo ekobima na mokili ya Aseri \q2 ekozala ebele penza ; \q1 mabele na ye ekobota biloko \q2 oyo ebongi mpo na bakonzi. \b \q1 \v 21 Nefitali azali lokola mboloko ya nsomi, \q2 oyo ebotaka bana kitoko. \b \q1 \v 22 Jozefi azali lokola nzete oyo ebotaka mbuma mingi, \q2 nzete oyo ezalaka pembeni ya etima, \q2 mpe oyo bitape na yango elekaka bosanda ya mir. \q1 \v 23 Banguna batumbolaki ye, \q2 babwakelaki ye makonga mpe babundisaki ye ; \q1 \v 24 kasi ye asimbaki kaka makasi tolotolo na ye, \q2 mpe maboko na ye etikalaki kolenga te \q1 mpo na loboko ya Elombe ya Jakobi, \q2 oyo azali Mobateli mpate, Libanga ya Isalaele. \q1 \v 25 Mpo na Nzambe ya tata na yo, tika ete asungaka yo ! \q2 mpo na Nkolo-Na-Nguya-Nyonso, tika ete apambola yo, \q1 apambola yo na mapamboli ya Lola, wuta na likolo ; \q2 na mapamboli ya bozindo, na se ; \q2 na mapamboli ya mabele mpe ya libumu. \q1 \v 26 Mapamboli ya tata na yo ezali na motuya \q2 koleka mapamboli ya bangomba ya kala, \q2 koleka bomengo ya bangomba mike ya kala ; \q1 tika ete mapamboli nyonso ekita na moto ya Jozefi, \q2 ekitela ye oyo atombolami kati na bandeko na ye ! \b \q1 \v 27 Benjame azali lokola mbwa ya zamba ; \q2 na tongo, apasolaka mosuni na ye ; \q2 na pokwa, akabolaka bomengo ya bitumba. » \p \v 28 Bango nyonso nde basali bikolo zomi na mibale ya Isalaele ; mpe oyo ezali maloba oyo tata na bango alobaki na bango tango apambolaki bango. Apesaki na moko na moko lipamboli oyo ekoki na ye. \s1 Kufa ya Jakobi \p \v 29 Jakobi apesaki bango malako oyo : « Nakomi pene ya kokende kokutana na batata na ngai. Bokunda ngai esika moko na bango, na lilita oyo ezali na elanga ya Efroni, moto ya Iti, \v 30 kati na lidusu ya mabanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, na mokili ya Kanana, elanga oyo Abrayami asombaki na Efroni, moto ya Iti, lokola lilita. \v 31 Ezalaki kuna nde bakundaki Abrayami mpe Sara, mwasi na ye ; Izaki mpe Rebeka, mwasi na ye. Ezali kuna nde ngai nakundaki Lea. \v 32 Elanga mpe lidusu ya mabanga oyo ezali kati na yango esombamaki epai ya bato ya Iti. » \p \v 33 Tango Jakobi asilisaki kopesa malako epai ya bana na ye, asembolaki makolo na ye na mbeto, akataki motema mpe akendeki kokutana na batata na ye. \c 50 \s1 Kokundama ya Jakobi \p \v 1 Jozefi amibwakaki na nzoto ya tata na ye, alelaki ye mpe apesaki ye beze. \v 2 Bongo Jozefi apesaki mitindo na minganga oyo bazalaki kosala epai na ye ete bakawusa nzoto ya Isalaele, tata na ye. Boye minganga bakawusaki nzoto ya Isalaele, \v 3 bakokisaki mikolo tuku minei oyo esengelaki mpo na kokawusa nzoto ya mowei. Bato ya Ejipito basalelaki ye matanga mikolo tuku sambo. \p \v 4 Tango mikolo ya matanga esilaki, Jozefi alobaki na bakonzi oyo basalaka na ndako ya Faraon : \pi1 — Soki nazwi ngolu na miso na bino, bolobela ngai epai ya Faraon. Boyebisa ye \v 5 ete tata na ngai alapisaki ngai ndayi : « Nakomi pembeni ya kokufa, bokunda ngai kati na kunda oyo natobolaki na libanga, na mokili ya Kanana. » Mpe sik’oyo, tika ete apesa ngai nzela mpo ete nakende kokunda tata na ngai, bongo na sima nde nakozonga. \p \v 6 Faraon azongisaki : \pi1 — Kende mpe kunda tata na yo ndenge alapisaki yo ndayi. \p \v 7 Boye Jozefi akendeki kokunda tata na ye ; bakalaka nyonso ya lokumu ya Faraon bakendeki elongo na ye : bakonzi oyo bazalaki kosala na ndako na ye mpe bakonzi nyonso ya Ejipito \v 8 elongo na bato nyonso ya ndako ya Jozefi, bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo bazalaki na ndako ya tata na ye. Bana na bango kaka nde batikalaki na Gosheni na bameme, bantaba mpe bangombe na bango. \v 9 Jozefi atambolaki lisusu elongo na bashareti mpe bato oyo batambolaka likolo ya bampunda. Ezalaki mobembo ya bato ebele penza. \p \v 10 Tango bakomaki na etando ya Atadi, pembeni ya Yordani, basalaki matanga ya monene penza. Jozefi asalaki mikolo sambo ya matanga mpo na tata na ye. \v 11 Bongo tango bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna bamonaki matanga wana na etando ya Atadi, balobaki : « Bato ya Ejipito bazali na milulu minene ya matanga. » Yango wana babengaki esika yango Abele-Mitsirayimi, oyo ezali pembeni ya Yordani. \p \v 12 Bana mibali ya Jakobi basalaki ndenge tata na bango atindaki bango. \v 13 Bamemaki ye na mokili ya Kanana mpe bakundaki ye na lidusu ya mabanga oyo ezali na elanga ya Makipela, pembeni ya Mamire, elanga oyo Abrayami asombaki epai ya Efroni, moto ya Iti, mpo ete akomisa yango lilita na ye. \v 14 Sima na kokunda tata na ye, Jozefi azongaki na Ejipito elongo na bandeko na ye ya mibali mpe bato nyonso oyo balandaki ye mpo na kokunda tata na ye. \s1 Bandeko ya Jozefi basengi bolimbisi \p \v 15 Tango bandeko mibali ya Jozefi bamonaki ete tata na bango asili kokufa, balobaki : « Tango mosusu Jozefi akoyina biso mpe akozongisela biso mabe nyonso oyo tosalaki ye ! » \p \v 16 Boye batindelaki Jozefi maloba oyo : « Liboso ete tata na yo akufa, atikaki maloba oyo : ‹ Tala makambo oyo bokoyebisa Jozefi : \v 17 ‘ Nasengi ete olimbisa masumu ya bandeko na yo mpe mabe oyo basalaki yo ! Sik’oyo, nabondeli yo, limbisa masumu ya basali ya Nzambe ya tata na yo ! ’ › » \p Tango Jozefi ayokaki maloba yango, alelaki. \p \v 18 Bandeko na ye bayaki, bamibwakaki liboso na ye mpe balobaki : \pi1 — Tozali bawumbu na yo. \p \v 19 Kasi Jozefi alobaki na bango : \pi1 — Bobanga te ! Boni, ngai nazali na esika ya Nzambe ? \v 20 Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele. \v 21 Yango wana, bobanga te ! Nakokokisa posa na bino mpe ya bana na bino. \p Akitisaki bango mitema mpe alobelaki bango na boboto nyonso. \s1 Kufa ya Jozefi \p \v 22 Jozefi avandaki na Ejipito elongo na libota nyonso ya tata na ye. Awumelaki na bomoi mibu nkama moko na zomi. \v 23 Amonaki bakitani ya Efrayimi kino na molongo ya misato. Amonaki lisusu bana ya Makiri, mwana mobali ya Manase, ba-oyo babotamaki na mabolongo ya Jozefi. \v 24 Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : « Nakomi pene ya kokufa. Kasi ya solo, Nzambe akosalisa bino mpe akobimisa bino na mokili oyo, mpo na kokotisa bino na mokili oyo alakaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi tango alapaki ndayi. » \p \v 25 Jozefi alapisaki bana mibali ya Isalaele ndayi mpe alobaki na bango : « Tango Nzambe akosunga bino, bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo. » \p \v 26 Bongo Jozefi akufaki tango akokisaki mibu ya mbotama nkama moko na zomi. Tango basilisaki kokawusa nzoto na ye, batiaki ye na sanduku na Ejipito.