\id EZR Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Esidrasi \toc1 Esidrasi \toc2 Esidrasi \toc3 Esd \mt1 Esidrasi \c 1 \s1 Mokano ya mokonzi Sirisi \p \v 1 Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi, mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba : \pmo \v 2 « Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : \pm ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda. \v 3 Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende na Yelusalemi kati na Yuda mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo azali Nzambe kati na Yelusalemi ! \v 4 Tika ete bavandi ya bisika nyonso oyo bato ya Yuda bazali bapesa bango, mpo na Ndako ya Nzambe oyo ezali na Yelusalemi, makabo oyo : palata, wolo, bibwele, biloko ya ndenge na ndenge mpe makabo oyo bakati bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango. › » \p \v 5 Bongo bakambi ya mabota ya Yuda mpe ya Benjame, Banganga-Nzambe mpe Balevi, elongo na moto nyonso oyo Nzambe atutaki motema babongamaki mpo na kokende kotonga Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi. \v 6 Bato nyonso oyo bazalaki zingazinga na bango basungaki bango ; bapesaki biloko esalema na palata mpe na wolo, bibwele, biloko ya ndenge na ndenge, bakado ya talo mpe makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango. \v 7 Mokonzi Sirisi abimisaki biloko ya Tempelo ya Yawe, oyo Nabukodonozori amemaki wuta na Yelusalemi mpo na kotia yango kati na tempelo ya nzambe na ye. \v 8 Sirisi, mokonzi ya Persi, atindaki Mitredati, mobombi bozwi na ye, ete abimisa, atanga mpe apesa yango epai ya Sheshibatsari, moto ya libota ya bakambi ya Yuda. \b \li4 \v 9 Tala biloko yango mpe motango na yango : \b \li1 bakopo ya wolo ezalaki tuku misato ; \li1 bakopo ya palata ezalaki nkoto moko ; \li1 basani ya mbele ya palata ezalaki tuku mibale na libwa ; \li1 \v 10 basani ya wolo ezalaki tuku misato ; \li1 basani minene ya palata ezalaki nkama minei na zomi ; \li1 biloko mosusu ezalaki nkoto moko. \b \li4 \v 11 Motango ya biloko nyonso ya wolo mpe ya palata ezalaki nkoto mitano na nkama minei. \b \p Sheshibatsari amemaki biloko yango nyonso tango bato oyo bakendeki na bowumbu balongwaki na Babiloni mpo na kozonga na Yelusalemi. \c 2 \s1 Bayuda oyo bawutaki na bowumbu \li4 \v 1 Tala bato ya etuka ya Yuda, oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu na mokili ya Babiloni, mpe, wuta na bowumbu, bazongaki na Yelusalemi mpe na Yuda, moto na moto kati na engumba na ye. \v 2 Bazongaki nzela moko na Zorobabeli, Jozue, Neyemi, Seraya, Reyelaya, Maridoshe, Bilishani, Misipari, Bigivayi, Rewumi, Baana. \b \li4 Tala motango ya bana ya Isalaele : \li1 \v 3 Bakitani ya Pareoshi : \li2 nkoto mibale na nkama moko na tuku sambo na mibale. \li1 \v 4 Bakitani ya Shefatia : \li2 nkama misato na tuku sambo na mibale. \li1 \v 5 Bakitani ya Ara : \li2 nkama sambo na tuku sambo na mitano. \li1 \v 6 Bakitani ya Paati-Moabi na nzela ya Jozue mpe Joabi : \li2 nkoto mibale na nkama mwambe na zomi na mibale. \li1 \v 7 Bakitani ya Elami : \li2 nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei. \li1 \v 8 Bakitani ya Zatu : \li2 nkama libwa na tuku minei na mitano. \li1 \v 9 Bakitani ya Zakayi : \li2 nkama sambo na tuku motoba. \li1 \v 10 Bakitani ya Bani : \li2 nkama motoba na tuku minei na mibale. \li1 \v 11 Bakitani ya Bebayi : \li2 nkama motoba na tuku mibale na misato. \li1 \v 12 Bakitani ya Azigadi : \li2 nkoto moko na nkama mibale na tuku mibale na mibale. \li1 \v 13 Bakitani ya Adonikami : \li2 nkama motoba na tuku motoba na motoba. \li1 \v 14 Bakitani ya Bigivayi : \li2 nkoto mibale na tuku mitano na motoba. \li1 \v 15 Bakitani ya Adini : \li2 nkama minei na tuku mitano na minei. \li1 \v 16 Bakitani ya Ateri na nzela ya Ezekiasi : \li2 tuku libwa na mwambe. \li1 \v 17 Bakitani ya Betsayi : \li2 nkama misato na tuku mibale na misato. \li1 \v 18 Bakitani ya Yora : \li2 nkama moko na zomi na mibale. \li1 \v 19 Bakitani ya Ashumi : \li2 nkama mibale na tuku mibale na misato. \li1 \v 20 Bakitani ya Gibari : \li2 tuku libwa na mitano. \li1 \v 21 Bato ya mboka Beteleemi, \li2 nkama moko na tuku mibale na misato. \li1 \v 22 Bato ya mboka Netofa : \li2 tuku mitano na motoba. \li1 \v 23 Bato ya mboka Anatoti : \li2 nkama moko na tuku mibale na mwambe. \li1 \v 24 Bato ya Azimaveti : \li2 tuku minei na mibale. \li1 \v 25 Bakitani ya Kiriati-Yearimi, Kefira mpe Beyeroti : \li2 nkama sambo na tuku minei na misato. \li1 \v 26 Bakitani ya Rama mpe Geba : \li2 nkama motoba na tuku mibale na moko. \li1 \v 27 Bato ya mboka Mikimasi : \li2 nkama moko na tuku mibale na mibale. \li1 \v 28 Bato ya bamboka Beteli mpe Ayi : \li2 nkama mibale na tuku mibale na misato. \li1 \v 29 Bakitani ya Nebo : \li2 tuku mitano na mibale. \li1 \v 30 Bakitani ya Magibishi : \li2 nkama moko na tuku mitano na motoba. \li1 \v 31 Bakitani ya Elami mosusu : \li2 nkoto moko na nkama mibale na tuku mitano na minei. \li1 \v 32 Bakitani ya Arimi : \li2 nkama misato na tuku mibale. \li1 \v 33 Bakitani ya Lodi, Adidi mpe Ono : \li2 nkama sambo na tuku mibale na mitano. \li1 \v 34 Bakitani ya Jeriko : \li2 nkama misato na tuku minei na mitano. \li1 \v 35 Bakitani ya Sena : \li2 nkoto misato na nkama motoba na tuku misato. \b \li4 \v 36 Tala motango ya Banganga-Nzambe : \li1 Bakitani ya Yedaeya, na nzela ya libota ya Jozue : \li2 nkama libwa na tuku sambo na misato. \li1 \v 37 Bakitani ya Imeri : \li2 nkoto moko na tuku mitano na mibale. \li1 \v 38 Bakitani ya Pashuri : \li2 nkoto moko na nkama mibale na tuku minei na sambo. \li1 \v 39 Bakitani ya Arimi : \li1 nkoto moko na zomi na sambo. \b \li4 \v 40 Tala motango ya Balevi : \li1 Bakitani ya Jozue na nzela ya Kadimieli mpe ya Odavia : \li2 tuku sambo na minei. \b \li4 \v 41 Tala motango ya bayembi : \li1 Bakitani ya Azafi : \li2 nkama moko na tuku mibale na mwambe. \b \li4 \v 42 Tala motango ya bakengeli bikuke ya Tempelo : \li1 Bakitani ya Shalumi, Ateri, Talimoni, Akubi, Atita mpe Shobayi : \li2 nkama moko na tuku misato na libwa. \b \li4 \v 43 Tala basali ya Tempelo : \li1 Bakitani ya Tsika, Asufa, Tabaoti, \v 44 Kerosi, Siya, Padoni, \v 45 Lebana, Agaba, Akubi \v 46 Agabi, Shalimayi, Anani, \v 47 Gideli, Gaari, Reaya, \v 48 Retsini, Nekoda, Gazami, \v 49 Uza, Paseya, Besayi, \v 50 Asina, Mewunimi, Nefusimi, \v 51 Bakibuki, Akufa, Aruri, \v 52 Batsiluti, Meyida, Arisha, \v 53 Barikosi, Sisera, Tama, \v 54 Netsia mpe Atifa. \b \li4 \v 55 Tala bakitani ya basali ya Salomo : \li1 Bakitani ya Sotayi, Sofereti, Peruda, \v 56 Yala, Darikoni, Gideli, \v 57 Shefatia, Atili, Pokereti-Atsebayimi mpe Ami. \li4 \v 58 Motango ya basali ya Tempelo mpe ya bakitani ya basali ya Salomo : nkama misato na tuku libwa na mibale. \b \li4 \v 59 Tala molongo ya bato oyo bawutaki na bowumbu, na bingumba Teli-Mela, Teli-Arisha, Kerubi-Adani mpe Imeri, kasi balongaki te kolakisa ete mabota na bango ya botata ewuta na Isalaele : \li1 \v 60 Bakitani ya Delaya, Tobiya mpe Nekoda : \li2 nkama motoba na tuku mitano na mibale. \b \li4 \v 61 Mpe kati na Banganga-Nzambe : \li1 Bakitani \li2 ya Obaya, ya Akotsi mpe ya Barizilayi oyo abengamaki « Barizilayi » mpo ete abalaki mwana mwasi ya Barizilayi, moto ya Galadi. \li4 \v 62 Balukaki mikanda oyo bakoma bakombo ya bakoko na bango, kasi batikalaki komona yango te. Boye balongolaki bango na mosala ya bonganga-Nzambe, pamba te bazalaki mbindo. \v 63 Moyangeli apekisaki bango kolia bilei ya bule kino tango Nganga-Nzambe moko akotuna toli ya Yawe na tina na bango, na nzela ya Urimi mpe Tumimi. \b \li4 \v 64 Motango ya lisanga mobimba ya bato oyo bawutaki na bowumbu ezalaki nkoto tuku minei na mibale na nkama misato na tuku motoba, \v 65 bakisa bawumbu na bango ya mibali mpe ya basi, nkoto sambo na nkama misato na tuku misato na sambo ; bazalaki na bayembi na bango ya basi mpe ya mibali, nkama mibale ; \v 66 bampunda ya bitumba, nkama sambo na tuku misato na motoba ; bamile nkama mibale na tuku minei na mitano ; \v 67 bashamo nkama minei na tuku misato na mitano ; mpe ba-ane nkoto motoba na nkama sambo na tuku mibale. \b \p \v 68 Tango bakomaki na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, bakambi mingi ya mabota bapesaki makabo oyo bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango mpo na kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe, na esika na yango ya kala. \v 69 Bapesaki na libenga ya misala, moto na moto kolanda ezweli na ye, mbongo ya bibende ya wolo nkoto tuku motoba na moko, mbongo ya bibende ya palata nkoto mitano, mpe banzambala nkama moko ya mosala ya bonganga-Nzambe. \p \v 70 Banganga-Nzambe, Balevi, bakengeli bikuke, bayembi, basali ya Tempelo, ndambo kati na bato mpe bato nyonso ya Isalaele bavandaki kati na bingumba na bango. \c 3 \s1 Bato batongi lisusu Tempelo ya Yawe \p \v 1 Na sanza ya sambo, bana ya Isalaele oyo bavandaki kati na bingumba na bango basanganaki na Yelusalemi lokola moto moko. \v 2 Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na baninga na ye, Banganga-Nzambe, mpe Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, elongo na bandeko na ye, babandaki kotonga etumbelo ya Nzambe ya Isalaele mpo na kobonza kuna mbeka ya kotumba kolanda makomi kati na Mobeko ya Moyize, moto na Nzambe. \v 3 Atako bazalaki koyoka bato oyo bazalaki pembeni na bango somo, batongaki etumbelo na likolo ya miboko na yango ya kala mpe babonzaki wana mpo na Yawe mbeka ya kotumba ya tongo mpe ya pokwa. \v 4 Bongo kolanda makomi, basepelaki feti ya Bandako ya kapo, mpe babonzaki mikolo nyonso bambeka ya kotumba kolanda motango oyo ekatama mpo na mokolo na mokolo. \v 5 Sima na yango, babonzaki mbeka ya kotumba ya tango nyonso, bambeka ya kotumba oyo ekatama mpo na feti ya ebandeli ya sanza mpe mpo na feti nyonso oyo ekatama mpo na Yawe, mpe bambeka ya kotumba mpo na bato nyonso oyo bazalaki bango moko kopesa makabo wuta na mokano ya mitema na bango. \p \v 6 Bato babandaki kobonzela Yawe bambeka ya kotumba na mokolo ya liboso ya sanza ya sambo, atako bamitongelaki nanu te miboko ya Tempelo ya Yawe. \v 7 Bapesaki mbongo epai ya batongi ndako mpe epai ya basharipantie ; bongo bapesaki lisusu bilei, masanga mpe mafuta epai ya bato ya Sidoni mpe ya Tiri mpo ete bamema, na nzela ya ebale monene, banzete ya sedele longwa na Libani kino na Jafa, na ndingisa ya Sirisi, mokonzi ya Persi. \p \v 8 Na sanza ya mibale ya mobu ya mibale sima na bango kokoma na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli ; Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, elongo na bandeko na bango mosusu, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato nyonso oyo bazongaki na Yelusalemi wuta na bowumbu, babandaki misala ya kotonga. Baponaki Balevi oyo bazalaki na mibu kobanda tuku mibale mpe komata mpo ete balandela misala ya kotonga Tempelo ya Yawe. \v 9 Jozue elongo na bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali, Kadimieli elongo na bana na ye ya mibali oyo bazalaki bakitani ya Yuda, bapesamelaki mokumba ya kolandela bato oyo bazalaki kotonga Ndako ya Nzambe. Mpe bakitani ya Enadadi elongo na bana na bango ya mibali mpe bandeko na bango, Balevi, bazalaki kosunga bango. \v 10 Tango batongi ndako basilisaki kotonga miboko ya Tempelo ya Yawe, Banganga-Nzambe kati na bilamba na bango ya mosala ya bonganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango na maboko ; Balevi, bakitani ya Azafi, elongo na manzanza, batelemaki na bisika na bango mpo na kokumisa Yawe, kolanda mitindo ya Davidi, mokonzi ya Isalaele. \v 11 Bazalaki koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kozongisela Yawe matondi : \q1 « Solo, azali malamu, \q2 bolingo na Ye mpo na Isalaele \q2 ewumelaka seko na seko ! » \m Bongo bato nyonso bazalaki kobeta milolo makasi mpo na kokumisa Yawe mpo ete bazalaki kotia miboko ya Tempelo ya Yawe. \v 12 Nzokande, kati na Banganga-Nzambe oyo ya mikolo, kati na Balevi oyo ya mikolo mpe kati na bakambi ya mabota, oyo ya mikolo, ezalaki na ebele oyo bamonaki Tempelo ya liboso ; bongo bazalaki kolela na mongongo makasi wana bazalaki kotia miboko ya Tempelo ya sika na miso na bango. Mpe kaka na tango yango, ebele ya bato mosusu bazalaki kosepela na koganga makasi mpe na kobeta milolo nzela moko na maboko. \v 13 Boye bato bakokaki te kokesenisa makelele ya bato oyo bazali koganga mpo na esengo mpe makelele ya bato oyo bazali kolela, pamba te bato bazalaki koganga makasi mpe makelele na bango ezalaki koyokana kino na mosika. \c 4 \s1 Batelemeli misala ya kotonga Tempelo \p \v 1 Tango banguna ya Yuda mpe ya Benjame bayokaki ete bato oyo bawutaki na bowumbu bazali kotonga Tempelo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, \v 2 bayaki epai ya Zorobabeli mpe bakambi ya mabota ; balobaki na bango : \pi1 — Botika ete tosunga bino na mosala ya kotonga Tempelo oyo, pamba te biso mpe tolukaka Nzambe na bino mpe tobonzelaka Ye mbeka wuta na tango ya Esari-Adoni, mokonzi ya Asiri, oyo amemaki biso awa. \p \v 3 Kasi Zorobabeli, Jozue mpe bakambi mosusu ya mabota ya Isalaele bazongisaki : \pi1 — Bokotonga te elongo na biso Tempelo ya Yawe, Nzambe na biso ; tokotonga yango biso moko mpo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, kolanda mitindo ya Sirisi, mokonzi ya Persi. \p \v 4 Bato ya bikolo oyo ezalaki elongo na bango kati na mboka balembisaki bato ya Yuda nzoto mpe babangisaki bango mpo ete bakoba lisusu te kotonga ; \v 5 bapesaki bapesi toli kanyaka mpo ete batelemela mpe babebisa mabongisi na bango na nzela ya batoli ya mabe, na mikolo nyonso ya Sirisi kino na oyo ya Dariusi, bango mibale bakonzi ya Persi. \s1 Mokanda epai ya mokonzi Aritakizerisesi \p \v 6 Kaka na ebandeli ya bokonzi ya Kizerisesi, batindelaki ye mokanda mpo na kofunda bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi. \v 7 Bongo na mikolo ya Aritakizerisesi lokola mokonzi ya Persi, Bishilami, Mitredati, Tabeyeli mpe baninga na bango ya mosala bakomelaki Aritakizerisesi mokanda. Bakomaki yango na makomi mpe na lokota ya Arami. \v 8 Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda na ye, bakomelaki mokonzi Aritakizerisesi mokanda oyo na tina na Yelusalemi : \pm \v 9 « Moyangeli Rewumi mpe Shimishayi, mokomi mikanda, elongo na baninga na bango, basambisi mpe bakambi ya bato ya Dini, ya Arifarisataki, ya Taripeli, ya Afarasi, ya Ereki, ya Babiloni, ya Size, ya Deya, ya Elami, \v 10 mpe bato ya bikolo mosusu oyo Asuribanipali, mokonzi monene mpe mokonzi ya lokumu, amemaki na bowumbu mpo na kotia bango kati na engumba Samari mpe kati na bituka nyonso ya ngambo ya weste ya ebale Efrate. » \p \v 11 Tala maloba oyo batindelaki ye na mokanda : \pmo « Epai ya mokonzi Aritakizerisesi. \pmo Maloba kowuta na biso basali na yo, bato ya ngambo ya weste ya ebale Efrate. \pm \v 12 Tika ete mokonzi ayeba ete Bayuda oyo bawutaki epai na yo bakomi kati na biso, na Yelusalemi ; bazali kotonga engumba ya batomboki mpe ya bato ya mobulu, bazali kotonga bamir mpe kobongisa lisusu miboko. \b \pm \v 13 Tika ete mokonzi ayeba lisusu ete, soki engumba oyo etongami lisusu mpe babongisi bamir na yango, bakofuta lisusu te mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela ; na bongo, bomengo ya mokonzi ekokita. \v 14 Sik’oyo, lokola tozwi libaku ya kosala epai ya mokonzi mpe lokola ezali malamu te mpo na biso komona lokumu ya mokonzi kobebisama, totindi sango oyo mpo na kotalisa makambo oyo epai ya mokonzi \v 15 mpo ete baluka kati na babuku ya bakonzi oyo bazalaki liboso na yo mpo na kososola malamu. Okomona solo kati na babuku yango ete engumba oyo ezali engumba ya batomboki, etungisaka bakonzi mpe bituka. Mpe lisusu, wuta kala, ezali esika ya batomboki. Yango wana engumba oyo ebebisamaki. \v 16 Tozali koyebisa mokonzi ete soki batongi lisusu engumba oyo mpe babongisi bamir na yango, okotikala lisusu na eloko moko te na ngambo ya weste ya ebale Efrate. » \p \v 17 Mokonzi azongisaki eyano oyo : \pm « Epai ya moyangeli Rewumi ; Shimishayi, mokomi mikanda na ye, mpe baninga na bango mosusu ya mosala oyo bavandaka na Samari mpe kati na bituka nyonso na ngambo ya weste ya ebale Efrate : \pmo Napesi bino mbote. \pm \v 18 Batangaki mpe babongolaki na miso na ngai mokanda oyo botindelaki biso. \v 19 Napesaki mitindo mpo ete baluka koyeba mpe kososola bosolo. Boye emonani solo ete, wuta na kala, engumba oyo etombokelaka kaka bakonzi mpe etindaka bato na botomboki mpe na mobulu. \v 20 Na Yelusalemi, ezalaki na bakonzi ya nguya oyo bazalaki kokonza etuka mobimba ya ngambo ya weste ya ebale Efrate mpe epai ya banani bazalaki kofuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela. \v 21 Boye, bopesa sik’oyo mitindo epai ya bato wana ete bakoba lisusu te kotonga mpo ete engumba wana etongama lisusu te kino tango ngai moko nakopesa mitindo. \v 22 Bosala keba ete bozwa likambo oyo na pete te. Mpo na nini kotika nzela ete mobulu oyo ekola mpe ekitisa bomengo ya mokonzi ? » \p \v 23 Tango kaka batangaki mokanda ya mokonzi Aritakizerisesi liboso ya Rewumi ; Shimishayi, mokomi mikanda na ye, mpe baninga na bango ya mosala bakendeki mbala moko na Yelusalemi epai ya Bayuda mpe bapekisaki bango na makasi ete bakoba lisusu te kotonga. \b \p \v 24 Wuta tango wana, misala ya Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi etelemaki kino na mobu ya mibale ya bokonzi ya Dariusi, mokonzi ya Persi. \c 5 \s1 Misala ya kotonga Tempelo ezongeli \p \v 1 Mosakoli Aje mpe mosakoli Zakari, mwana mobali ya Ido, basakolaki mpo na bato ya Yuda oyo bazalaki kati na mokili ya Yuda mpe na engumba Yelusalemi, na Kombo ya Nzambe ya Isalaele, oyo azalaki kati na bango. \v 2 Bongo, Zorobabeli, mwana mobali ya Shealitieli, mpe Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki, bazongelaki mosala ya kotonga lisusu Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe basakoli ya Nzambe bazalaki elongo na bango mpo na kosunga bango. \v 3 Mbala moko, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezalaki na ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batunaki bango : \pi1 — Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu mir oyo ? \p \v 4 Batunaki lisusu : \pi1 — Bato oyo bazali kotonga Ndako oyo, bakombo na bango banani ? \p \v 5 Kasi liso ya Nzambe na bango ezalaki kosenzela bakambi ya Bayuda. Boye bapekisaki bango te kosala misala na bango kino tango Dariusi azwaki mokanda na tina na yango mpe kino tango bazwaki mokanda ya eyano kowuta na Dariusi. \s1 Mokanda epai ya mokonzi Dariusi \p \v 6 Tala mokanda oyo Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala, bakambi ya bituka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, batindelaki mokonzi Dariusi. \v 7 Tala makambo oyo bakomaki kati na mokanda yango : \pmo « Epai ya mokonzi Dariusi. \pmo Tika ete bokonzi na yo ewumela na kimia ! \pm \v 8 Tika ete mokonzi ayeba ete tokendeki na etuka ya Yuda kino na Tempelo ya Nzambe Monene. Bato bazali kotonga yango na mabanga bakata mpe bazali kotia mabaya na likolo ya bamir. Mosala yango ezali kotambola malamu mpe kokende noki kati na maboko na bango. \pm \v 9 Totunaki bakambi na bango motuna oyo : ‹ Nani apesi bino nzela ya kotonga lisusu Tempelo oyo mpe ya kotelemisa lisusu bamir ? › \v 10 Totunaki bango bakombo na bango mpo ete toyebisa yo yango mpe tokomela yo bakombo ya bakambi na bango. \pm \v 11 Kasi tala eyano oyo bapesaki biso : \b \pm ‹ Tozali basali ya Nzambe ya Likolo mpe ya se ; tozali kotonga lisusu Tempelo oyo etongamaki wuta mibu ebele na kala. Mokonzi moko monene ya Isalaele atongaki mpe asilisaki yango. \v 12 Kasi lokola batata na biso batumbolaki kanda ya Nzambe ya Likolo, akabaki bango na maboko ya Nabukodonozori, moto ya Chalide, mokonzi ya Babiloni. Ezali ye nde abukaki Tempelo oyo mpe amemaki bato na bowumbu, na Babiloni. \pm \v 13 Nzokande, na mobu ya liboso ya bokonzi na ye lokola mokonzi ya Babiloni, Sirisi apesaki mitindo ya kotonga lisusu Ndako oyo ya Nzambe, \v 14 alongolaki kutu na tempelo ya Babiloni biloko basala na wolo mpe na palata, oyo Nabukodonozori azwaki na Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi mpe amemaki na tempelo ya Babiloni. Mokonzi Sirisi apesaki biloko yango epai ya Sheshibatsari oyo ye, Sirisi, atiaki lokola moyangeli. \v 15 Alobaki na ye : ‘ Kamata biloko oyo mpe kende kotia yango kati na Tempelo ya Yelusalemi ; mpe tika ete Tempelo ya Nzambe etongama lisusu na esika na yango ya kala. ’ \pm \v 16 Ezali bongo nde Sheshibatsari ayaki awa na Yelusalemi mpo na kotonga miboko ya Ndako ya Nzambe. Wuta mokolo wana kino na mokolo ya lelo, Tempelo ezali kotongama, kasi misala esili nanu te. › \b \pm \v 17 Sik’oyo, soki yango esepelisi mokonzi, tika ete baluka kati na babuku ya kala ya bakonzi ya Babiloni mpo na kotala soki mokonzi Sirisi apesaki solo mitindo ya kotonga lisusu Ndako ya Nzambe kati na Yelusalemi. Mpe tika ete mokonzi atindela biso mokano na ye na tina na likambo oyo. » \c 6 \s1 Mokano ya mokonzi Dariusi \p \v 1 Mokonzi Dariusi apesaki mitindo, mpe balukaki kati na babuku ya kala oyo ezalaki na Babiloni, kati na ebombelo bomengo ya mokonzi. \v 2 Mpe bamonaki buku moko kati na Ekibatane, engumba mokonzi ya etuka ya Medi. Tala makomi oyo ezalaki kati na buku yango : \pmo « Ekaniseli : \pm \v 3 Na mobu ya liboso ya mokonzi Sirisi, mokonzi Sirisi azwaki mokano na tina na Tempelo ya Nzambe kati na Yelusalemi : \b \pm Tempelo ya Nzambe esengeli kotongama lisusu mpo ete ezala esika ya kobonza mbeka ; boye esengeli kozongisa miboko na yango. Tempelo ekozala na bametele pene tuku misato na bosanda mpe bametele pene tuku misato na mokuse. \v 4 Ekozala na milongo misato ya mabanga bakata mpe molongo moko ya mabaya ya sika mpo na motondo. Mbongo ya kofuta mpo na misala yango ekowuta na bomengo ya mokonzi. \v 5 Lisusu, biloko basala na wolo mpe na palata ya Ndako ya Nzambe, oyo Nabukodonozori azwaki na Tempelo kati na Yelusalemi mpe amemaki na Babiloni, esengeli kozonga na bisika na yango kati na Tempelo, na Yelusalemi ; basengeli kotia yango kati na Ndako ya Nzambe. \b \pm \v 6 Sik’oyo, Tatinayi, moyangeli ya etuka oyo ezali na ngambo ya weste ya ebale Efrate, Shetari-Bozinayi mpe bino baninga na bango ya mosala, bakambi ya etuka, bozala mosika ya likambo oyo. \v 7 Botika ete misala ya kotonga lisusu Ndako oyo ya Nzambe ekoba. Tika ete moyangeli mpe bakambi ya Bayuda batonga yango lisusu na esika na yango ya kala. \pm \v 8 Tala mitindo oyo ngai nazali kopesa bino na tina na oyo bosengeli kosala mpo na kosunga bakambi ya Bayuda mpe mpo na misala ya botongi Ndako oyo ya Nzambe : \pm ‹ Bosengeli tango nyonso kozwaka mbongo ya misala na bomengo ya mokonzi, oyo ewutaka na mpako oyo etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate efutaka mpo na mokonzi, mpo na kofuta bato wana na ndenge ekoki mpe mpo ete misala etelema te. \v 9 Bosengeli mpe kopesaka mikolo nyonso epai ya Banganga-Nzambe ya Yelusalemi biloko nyonso oyo bakozala na yango na bosenga mpo na mbeka ya kotumba ya Nzambe ya Likolo : bana ngombe ya mibali, bameme ya mibali, bana meme, ble, mungwa, masanga ya vino mpe mafuta. Soki bakomi na bosenga ya biloko, bino bosengeli kopesa bango yango mikolo nyonso, mpe esengeli te kozanga, \v 10 mpo ete bakoka kobonzaka mbeka ya solo kitoko epai ya Nzambe ya Likolo, mpe mpo ete basambelaka mpo na bomoi malamu ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali. \pm \v 11 Bongo tala mokano oyo nasili kozwa mpo na moto nyonso oyo akobongola to akotosa te mitindo oyo : bakolongola libaya moko kati na ndako na ye, bakotelemisa yango, bakodiembika ye na libaya yango mpe bakokomisa ndako na ye mopiku ya biloko ya mbindo. \v 12 Tika ete Nzambe oyo atiaki Kombo na Ye kuna akweyisa mokonzi nyonso to bato nyonso oyo bakomeka kotombola loboko mpo na koboya kotosa to kobongola mitindo na ngai na kobuka Tempelo oyo ya Nzambe kati na Yelusalemi. \pm Ezali ngai, Dariusi, moto napesi mitindo yango. Tika ete botosa yango malamu mpe na lombangu. › » \s1 Bosili ya misala mpe libulisi ya Tempelo \p \v 13 Boye, Tatinayi, moyangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, mpe Shetari-Bozinayi elongo na baninga na bango ya mosala batosaki mitindo ya mokonzi Dariusi na lombangu mpe na ndenge ezaleli. \v 14 Boye bakambi ya Bayuda bakobaki misala ya kotonga, mpe balongaki wana balendisamaki na maloba ya basakoli Aje mpe Zakari, mokitani ya Ido. Basilisaki kotonga kolanda mitindo ya Nzambe ya Isalaele mpe ya Sirisi, Dariusi, mpe Aritakizerisesi, bakonzi ya Persi. \p \v 15 Basilisaki kotonga Ndako mobimba ya Nzambe, na mokolo ya misato ya sanza ya Adari, tango mokonzi Dariusi akokisaki mibu motoba na bokonzi. \v 16 Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi mpe bato mosusu oyo bawutaki na bowumbu basalaki feti ya libulisi ya Ndako ya Nzambe. \v 17 Babonzaki bangombe ya mibali nkama moko, bameme ya mibali nkama mibale, bana meme nkama minei mpo na libulisi ya Ndako ya Nzambe ; mpe bantaba ya mibali zomi na mibale, moko mpo na ekolo moko na moko ya Isalaele, lokola mbeka mpo na masumu ya Isalaele mobimba. \p \v 18 Bakabolaki mpe Banganga-Nzambe kolanda milongo na bango, mpe Balevi kolanda masanga na bango mpo na mosala ya Nzambe kati na Yelusalemi, ndenge ekomama kati na buku ya Moyize. \s1 Feti ya Pasika \p \v 19 Na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bana ya Isalaele oyo bawutaki na bowumbu basepelaki feti ya Pasika. \v 20 Banganga-Nzambe mpe Balevi bamipetolaki kolanda mibeko mpe bakomaki peto. Boye Balevi bakataki kingo ya mpate lokola mbeka ya Pasika mpo na bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu, mpo na bandeko na bango, Banganga-Nzambe, mpe mpo na bango moko. \v 21 Bana ya Isalaele oyo bawutaki na bowumbu baliaki yango elongo na bato nyonso oyo bakabwanaki na misala ya mbindo ya bikolo ya mokili mpe basanganaki elongo na bango mpo na koluka Yawe, Nzambe ya Isalaele. \v 22 Na mikolo sambo, basalaki na esengo feti ya Mapa ezanga levire, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo ndenge abongolaki makanisi ya mokonzi ya Asiri mpo ete asunga bango na misala ya botongi Ndako ya Nzambe, ya Nzambe ya Isalaele. \c 7 \s1 Esidrasi azongi na Yelusalemi \p \v 1 Sima na makambo oyo, tango Aritakizerisesi azalaki mokonzi ya Persi, Esidrasi, mwana mobali ya Seraya, mwana mobali ya Azaria, mwana mobali ya Ilikia, \v 2 mwana mobali ya Shalumi, mwana mobali ya Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, \v 3 mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Azaria, mwana mobali ya Merayoti, \v 4 mwana mobali ya Zerakia, mwana mobali ya Uzi, mwana ya Buki, \v 5 mwana mobali ya Abishuwa, mwana mobali ya Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, mwana mobali ya Aron, mokonzi ya Banganga-Nzambe, \v 6 alongwaki na Babiloni. Esidrasi yango azalaki molakisi malamu ya mibeko mpe ayebaki penza malamu Mobeko ya Moyize oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesaki na bato na Ye. Bongo lokola loboko ya Yawe, Nzambe na ye, ezalaki likolo na ye, mokonzi apesaki ye biloko nyonso oyo asengaki. \p \v 7 Kati na bana ya Isalaele, Banganga-Nzambe, Balevi, bayembi, bakengeli bikuke mpe basali ya Tempelo, ndambo bazongaki na Yelusalemi na mobu ya sambo ya mokonzi Aritakizerisesi. \v 8 Esidrasi mpe akomaki elongo na bango na Yelusalemi na sanza ya mitano ya mobu ya sambo ya mokonzi. \v 9 Alongwaki na Babiloni na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso mpe akomaki na Yelusalemi na mokolo ya liboso ya sanza ya mitano, pamba te loboko ya ngolu ya Nzambe na ye ezalaki likolo na ye, \v 10 mpo ete Esidrasi amipesaki ye moko penza, na motema na ye mobimba, mpo na koyekola mpe kotia na misala mibeko ya Yawe mpe mpo na kolakisa na bana ya Isalaele bikateli mpe mitindo ya mibeko yango. \s1 Mokanda ya Aritakizerisesi epai ya Esidrasi \p \v 11 Tala mokanda oyo mokonzi Aritakizerisesi apesaki epai ya Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko, oyo ayebaki penza malamu makambo oyo etali mitindo mpe bikateli ya Yawe mpo na Isalaele : \pmo \v 12 « Aritakizerisesi, mokonzi ya bakonzi ; \pmo Epai ya Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko ya Nzambe ya Likolo : \pmo Mbote na yo ! \pm \v 13 Napesi mitindo ete, kati na bokonzi na ngai, moto nyonso kati na bato ya Isalaele, kati na Banganga-Nzambe mpe Balevi na bango, oyo alingi kokende na Yelusalemi akende elongo na yo. \v 14 Ngai, mokonzi elongo na bapesi toli na ngai sambo, totindi yo koluka koyeba makambo oyo ezali koleka na Yuda mpe na Yelusalemi, kolanda Mobeko ya Nzambe na yo, oyo ezali na maboko na yo, \v 15 mpe komema palata mpe wolo oyo mokonzi mpe bapesi toli na ye bapesi bango moko wuta na mokano ya mitema na bango, epai ya Nzambe ya Isalaele, oyo Ndako na Ye ezali na Yelusalemi ; \v 16 elongo na palata mpe wolo nyonso oyo okozwa na etuka ya Babiloni, makabo oyo bato mpe Banganga-Nzambe bakataki bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango, mpo na Tempelo ya Nzambe na bango kati na Yelusalemi. \v 17 Boye, okosala keba ete osomba bangombe, bameme ya mibali mpe bana meme elongo na nyonso oyo esengeli mpo na makabo na yango ya gato mpe ya masanga, mpe okobonza yango na etumbelo ya Nzambe na bino kati na Yelusalemi. \v 18 Na palata mpe wolo oyo etikali, yo mpe bandeko na yo, Bayuda, bokoki kosala nyonso oyo bokomona ete ezali malamu kolanda mokano ya Yawe, Nzambe na bino. \pm \v 19 Okopesa epai ya Nzambe ya Yelusalemi, biloko nyonso oyo bakopesa yo mpo na mosala ya Tempelo ya Nzambe na yo. \v 20 Na nzela ya bomengo ya mokonzi, okoki kozwa biloko nyonso mosusu oyo okozala na yango na bosenga mpo na misala ya Ndako ya Nzambe na yo. \v 21 Sik’oyo, ngai, mokonzi Aritakizerisesi, napesi mitindo epai ya babateli bomengo nyonso ya mokonzi kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, ete bopesa na lombangu eloko nyonso oyo Esidrasi, Nganga-Nzambe mpe molakisi ya Mobeko ya Nzambe ya Likolo, akosenga bino \v 22 kino na kilo ya palata nkoto misato na nkama mitano, kilo ya ble nkoto tuku minei na mitano, balitele ya vino nkoto minei na nkama mitano, balitele ya mafuta nkoto minei na nkama mitano mpe kilo ya mungwa oyo bakoki kotanga te. \v 23 Tika ete makambo nyonso oyo Nzambe ya Likolo atindi mpo na Tempelo na Ye esalema ndenge kaka atindi yango, mpo ete kanda na Ye ekitela te mokili ya mokonzi mpe bana na ye ya mibali. \pm \v 24 Bosengeli lisusu koyeba ete bozali lisusu na ndingisa te ya kosenga na Nganga-Nzambe nyonso, Molevi nyonso, moyembi nyonso, mokengeli nyonso ya ekuke, mosali nyonso ya Tempelo, mpe na mosali nyonso mosusu ya Ndako ya Nzambe ete afuta mpako ya mokonzi, mpako ya mabele mpe mpako ya nzela. \v 25 Bongo yo, Esidrasi, kolanda bwanya ya Nzambe na yo, oyo ozali na yango, pona bilombe mpe basambisi mpo na mosala ya kokata makambo ya bato nyonso oyo, kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, bayebi mibeko ya Nzambe na yo ; mpe lakisa yango na bato oyo bayebi yango te. \pm \v 26 Moto nyonso oyo akotosa te Mobeko ya Nzambe na yo mpe mobeko ya mokonzi asengeli bongo kozwa etumbu ya kufa to kokende na bowumbu to kokaba bomengo na ye mpo ete babotola yango to mpe kokota na boloko. » \p \v 27 Tika ete Yawe, Nzambe ya batata na biso, akumisama, Ye oyo atiaki makanisi ya lolenge oyo na motema ya mokonzi, mpo ete akoka kopesa lokumu na Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi, \v 28 mpe oyo asaleli ngai bolamu na Ye liboso ya mokonzi, ya bapesi toli na ye mpe ya bakalaka na ye nyonso, pamba te loboko ya Yawe, Nzambe na ngai, ezalaki likolo na ngai ! Boye, nazwaki makasi mpe nasangisaki bakambi ya Isalaele mpo ete bazonga elongo na ngai. \c 8 \s1 Molongo ya bakambi ya mabota \li4 \v 1 Tala bakambi ya mabota, kolanda ndenge babotamela, oyo bazongaki elongo na ngai, wuta na Babiloni, na tango Aritakizerisesi azalaki mokonzi : \b \li1 \v 2 Kati na bakitani ya Pineasi : \li2 Gerishomi. \li1 Kati na bakitani ya Itamari : \li2 Daniele. \li1 Kati na bakitani ya Davidi : \li2 Atushi. \li1 \v 3 Kati na bakitani ya Shekania, ya Pareoshi : \li2 Zakari elongo na bato na ye oyo batangaki, nkama moko na tuku mitano. \li1 \v 4 Kati na bakitani ya Paati-Moabi : \li2 Eliowenayi, mwana mobali ya Zerakia, elongo na bato na ye nkama mibale. \li1 \v 5 Kati na bakitani ya Zatu : \li2 Shekania, mwana mobali ya Yaazieli, elongo na bato na ye nkama misato. \li1 \v 6 Kati na bakitani ya Adini : \li2 Ebedi, mwana mobali ya Jonatan, elongo na bato na ye tuku mitano. \li1 \v 7 Kati na bakitani ya Elami : \li2 Ezayi, mwana mobali ya Atalia elongo na bato na ye tuku sambo. \li1 \v 8 Kati na bakitani ya Shefatia : \li2 Zebadia, mwana mobali ya Mikaeli, elongo na bato na ye tuku mwambe. \li1 \v 9 Kati na bakitani ya Joabi : \li2 Abidiasi, mwana mobali ya Yeyeli, elongo na bato na ye nkama mibale na zomi na mwambe. \li1 \v 10 Kati na bakitani ya Bani : \li2 Shelomiti, mwana mobali ya Yosifia, elongo na bato na ye nkama moko na tuku motoba. \li1 \v 11 Kati na bakitani ya Bebayi : \li2 Zakari, mwana mobali ya Bebayi, elongo na bato na ye tuku mibale na mwambe. \li1 \v 12 Kati na bakitani ya Azigadi : \li2 Yoanani, mwana mobali ya Akatani, elongo na bato na ye nkama moko na zomi. \li1 \v 13 Kati na bakitani ya Adonikami : \li2 bana ya suka oyo bakombo na bango ezalaki Elifeleti, Yeyeli mpe Shemaya, elongo na bato na bango tuku motoba. \li1 \v 14 Kati na bakitani ya Bigivayi : \li2 Utayi mpe Zabudi elongo na bato na bango tuku sambo. \s1 Esidrasi azongi na Yelusalemi \p \v 15 Nasangisaki bango pene ya ebale oyo ezalaki kotiola na ngambo ya Akava, mpe tovandaki kuna mikolo misato. Tango natalaki malamu bato mpe Banganga-Nzambe, namonaki ata Molevi moko te kuna. \v 16 Boye nabengisaki Eliezeri, Arieli, Shemaya, Elinatani, Yaribi, Elinatani, Natan, Zakari mpe Meshulami oyo bazalaki bakambi ; Yoyaribi mpe Elinatani oyo bazalaki bato ya mayele. \v 17 Natindaki bango epai ya Ido, mokambi ya mboka Kasifia ; nayebisaki bango makambo oyo basengeli koloba na Ido mpe bandeko na ye ya mosala, basali ya Tempelo, oyo bazalaki kovanda na Kasifia, mpo ete bamemela biso basali mpo na Ndako ya Nzambe na biso. \v 18 Lokola loboko ya ngolu ya Nzambe na biso ezalaki likolo na biso, bamemelaki biso Sherebia, moto ya mayele, kati na bakitani ya Maali, mwana mobali ya Levi, mwana mobali ya Isalaele, elongo na bana na ye ya mibali mpe bandeko na ye ya mibali, bango nyonso zomi na mwambe, \v 19 elongo na Ashabia mpe Ezayi, bakitani ya Merari, elongo na bandeko na ye ya mibali mpe bana na bango ya mibali. Bango nyonso bazalaki tuku mibale. \v 20 Bamemaki lisusu basali ya Tempelo, nkama mibale na tuku mibale, bakitani ya bato oyo Davidi mpe lisanga ya bakalaka na ye batiaki mpo na kosunga Balevi. Batangaki bango nyonso na bakombo na bango. \s1 Esidrasi akati mokolo ya kokila bilei \p \v 21 Kuna, pene ya ebale Akava, napesaki mitindo ya kokila bilei mpo na komikitisa liboso ya Nzambe na biso mpe kosenga Ye mobembo malamu mpo na biso, mpo na bana na biso mpe mpo na biloko na biso nyonso. \v 22 Nayokaki soni mpo na kosenga epai ya mokonzi basoda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, mpo na kobatela biso na nzela liboso ya banguna na biso ; pamba te tolobaki na mokonzi : « Loboko ya ngolu ya Nzambe na biso ezali likolo ya moto nyonso oyo alukaka Ye, kasi kanda makasi na Ye ekitelaka bato nyonso oyo basundolaka Ye. » \v 23 Boye, tokilaki bilei mpe tosengaki ngolu yango epai ya Nzambe na biso, mpe Ye ayanolaki libondeli na biso. \s1 Banganga-Nzambe bayambi biloko ya kotongela Tempelo \p \v 24 Bongo na sima, natiaki kati na bakonzi ya Banganga-Nzambe bakonzi zomi na mibale : Sherebia, Ashabia elongo na bandeko na bango zomi. \v 25 Namekaki liboso na bango makabo ya palata, ya wolo mpe bisalelo nyonso oyo mokonzi, bapesi toli na ye, bakalaka na ye mpe Isalaele mobimba bapesaki mpo na Ndako ya Nzambe na biso. \v 26 Napesaki bango kilo nkoto tuku mibale ya palata, kilo nkoto misato ya bisalelo basala na palata, kilo nkoto misato ya wolo, \v 27 bakopo ya wolo tuku mibale oyo ezali na motuya ya mbongo ya bibende ya wolo nkoto moko mpe biloko mibale ya kitoko basala na bronze oyo engalaka lokola wolo. \v 28 Nalobaki na bango : « Bino elongo na biloko oyo, bobulisami mpo na Yawe. Palata mpe wolo oyo ezali makabo oyo bato bakati bango moko kopesa wuta na mokano ya mitema na bango, epai na Yawe, Nzambe ya tata na bino. \v 29 Bosenzela mpe bobatela yango malamu kino tango bokomeka kilo na yango liboso ya bakonzi ya Banganga-Nzambe, ya Balevi mpe ya bakambi ya mabota ya Isalaele, kati na bashambre ya Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi. » \p \v 30 Banganga-Nzambe mpe Balevi bayambaki palata, wolo mpe bisalelo ya bule oyo bamekaki kilo na yango, mpo na komema yango na Ndako ya Nzambe na biso, na Yelusalemi. \s1 Bokomi na Yelusalemi \p \v 31 Na mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya liboso, tolongwaki na ebale Akava mpo na kokende na Yelusalemi. Loboko ya Nzambe na biso ezalaki likolo na biso, mpe abatelaki biso na nzela liboso ya banguna mpe ya bato ya mobulu. \v 32 Tokomaki na Yelusalemi mpe topemaki kuna mikolo misato. \v 33 Na mokolo ya minei, tomekaki kilo ya palata, ya wolo mpe bisalelo ya bule kati na Ndako ya Nzambe na biso, liboso ya kopesa yango na maboko ya Nganga-Nzambe Meremoti, mwana mobali ya Uri ; azalaki elongo na Eleazari, mwana mobali ya Pineasi, mpe Balevi Yozabadi, mwana mobali ya Jozue, mpe Noadia, mwana mobali ya Binuwi. \v 34 Batangaki mpe bamekaki kilo ya biloko nyonso ; mpe bakomaki yango na buku kaka na tango wana. \v 35 Bato oyo bakendeki na bowumbu bazongaki wuta na bowumbu mpe babonzaki mpo na Isalaele mobimba lokola mbeka ya kotumba epai ya Nzambe ya Isalaele : bangombe ya mibali zomi na mibale, bameme ya mibali tuku libwa na motoba, bana meme tuku sambo na sambo, mpe bantaba zomi na mibale lokola mbeka ya masumu. Babonzaki nyonso lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe. \v 36 Batindaki lisusu sango ya mitindo ya mokonzi epai ya bayangeli oyo mokonzi atiaki na bituka mpe epai ya bayangeli ya etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, oyo basungaki bato mpe Tempelo ya Nzambe. \c 9 \s1 Libondeli ya Esidrasi \p \v 1 Sima na makambo nyonso oyo esalemaki, bakambi ya Isalaele bayaki epai na ngai mpe balobaki : « Bato ya Isalaele, Banganga-Nzambe mpe Balevi bakabwani te na bato ya bikolo, oyo bazali kati na bango ; bakabwani mpe te na misala na bango ya mbindo. Batamboli kaka kolanda misala ya mbindo ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Yebusi, ya Amoni, ya Moabi, ya Ejipito mpe ya Amori, \v 2 pamba te babali bana basi ya bikolo wana ya bapaya mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango ya mibali. Boye, basangisi libota ya bule na bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bango. Bakambi mpe bakalaka bazalaki bato ya liboso ya kosala makambo wana ya mbindo. » \p \v 3 Tango nayokaki bongo, napasolaki nzambala mpe kazaka na ngai, napikolaki suki ya moto na ngai mpe mandefu na ngai mpe namivandisaki wana na mabele. \v 4 Bato nyonso oyo bazalaki kolenga mpo na maloba na Nzambe ya Isalaele basanganaki pene na ngai, mpo na misala ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu. Navandaki na mawa kino na tango ya likabo ya pokwa. \v 5 Bongo na tango ya likabo ya pokwa, nasalaki makasi atako nazalaki na pasi makasi kati na motema, natelemaki na nzambala mpe kazaka na ngai, oyo epasuka ; nafukamaki mpe natombolaki maboko na ngai epai na Yawe, Nzambe na ngai. \v 6 Nalobaki : \pm « Oh Nzambe na ngai ! Nazali kati na mobulu mpe nazali koyoka soni makasi mpo na kotombola elongi na ngai epai na Yo, Nzambe na ngai ; pamba te masumu mpe mabe na biso ekomi ebele penza mpe emati kino na Likolo ! \v 7 Wuta na tango ya bakoko na biso kino na mokolo ya lelo, mabe na biso ekomi ebele. Likolo ya masumu na biso, biso elongo na bakonzi mpe Banganga-Nzambe na biso tokabamaki na mopanga, na bowumbu, na kobebisama mpe na soni makasi na maboko ya bakonzi ya bapaya, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo. \v 8 Kasi sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, na mwa tango moke, osaleli biso ngolu ya kobikisa ndambo ya bato kati na biso mpe ya kopesa biso esika kati na mokili na Yo ya bule. Na boye, Yo Nzambe na biso, ongengisi miso na biso na pole mpe opesi biso lisungi kati na bowumbu na biso. \v 9 Pamba te, atako tozali bawumbu, kasi Yo Nzambe na biso, osundoli biso te kati na bowumbu na biso. Omonisi biso bolamu na Yo na nzela ya bakonzi ya Persi : bapesi biso makasi ya sika mpo na kotonga lisusu Ndako ya Nzambe na biso, na kobongisa bamir na yango oyo ebukanaki-bukanaki mpe na kopesa biso mir ya kobombamela kati na Yuda mpe na Yelusalemi. \pm \v 10 Sik’oyo, oh Nzambe na biso, toloba lisusu nini na makambo oyo ezali kosalema ? Pamba te tobateli te mibeko na Yo, \v 11 oyo opesaki na nzela ya basali na Yo, basakoli, tango olobaki : ‹ Mokili oyo bozali kokota mpo na kokamata yango ezali mokili oyo ebebisami na mbindo ya bato wana. Na nzela ya misala na bango ya nkele, batondisi mokili yango nyonso na mbindo na bango. \v 12 Boye, bopesa te na libala bana na bino ya basi epai ya bana na bango ya mibali to bozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali. Tango nyonso, bosalaka te boyokani ya bondeko elongo na bango mpo ete bokoka kozala makasi, bokoka kolia bambuma malamu ya mokili mpe bokoka kotikela yango bana na bino lokola libula mpo na libela. › \pm \v 13 Makambo nyonso oyo ekomeli biso ezali mbano ya etamboli mabe na biso mpe ya ngambo na biso monene. Mpe lisusu, oh Nzambe na biso, na kotala ebele ya masumu oyo tosali, etumbu oyo opesi biso ezali moke penza, mpo ete otikeli biso kutu ndambo ya bato oyo ! \v 14 Boni, tozongela lisusu kobuka mibeko na Yo mpe kobalana na bato oyo basalaka makambo ya nkele ? Boni, kanda makasi na Yo ekopela te kino kosilisa koboma biso mpe kotikela biso moto ata moko te na bomoi ? \v 15 Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, ozali penza sembo ! Na ngolu na Yo, na mokolo ya lelo, tozali batikali kati na bato na biso mpe tozali awa liboso na Yo, elongo na masumu na biso ; nzokande moko te kati na biso akoki kotelema bongo liboso na Yo ! » \c 10 \s1 Isalaele ayamboli masumu \p \v 1 Wana Esidrasi azalaki kobondela mpe kotubela masumu, azalaki ya kofukama mpe azalaki kolela liboso ya Ndako ya Nzambe. Ebele ya bana ya Isalaele : mibali, basi mpe bana, basanganaki pene na ye mpe, bango nyonso, bazalaki kolela makasi. \v 2 Bongo Shekania, mwana mobali ya Yeyeli, moko kati na bakitani ya Elami, alobaki na Esidrasi : « Solo, tosalaki makambo ya mbindo na miso ya Nzambe na biso, pamba te tobali basi ya bapaya kati na bikolo oyo ezali elongo na biso kati na mboka oyo ; kasi atako bongo, elikya ezali nanu mpo na Isalaele ! \v 3 Sik’oyo, tika ete tosala boyokani elongo na Nzambe na biso mpo na kobengana basi wana nyonso elongo na bana na bango, kolanda toli na yo Esidrasi, nkolo na ngai, mpe kolanda toli ya bato nyonso oyo balengaka liboso ya mibeko ya Nzambe na biso ! Tika ete esalema kolanda Mobeko ! \v 4 Telema, pamba te yo nde osengeli kotala likambo oyo ! Tozali elongo na yo mpo na kosunga yo. Yika mpiko mpe sala ! » \p \v 5 Esidrasi atelemaki mpe asengaki na bakonzi ya Banganga-Nzambe, Balevi mpe bana nyonso ya Isalaele kolapa ndayi ete bakosalela makambo oyo ndenge elobami. Mpe balapaki ndayi. \v 6 Bongo Esidrasi alongwaki liboso ya Ndako ya Nzambe mpe akendeki na shambre ya Yoanani, mwana mobali ya Eliashibi. Wana azalaki kuna, atikalaki kolia eloko moko te mpe komela mayi te ; pamba te azalaki kokoba kosala matanga likolo ya makambo ya mbindo ya bato oyo bawutaki na bowumbu. \p \v 7 Bapanzaki sango kati na Yuda mpe na Yelusalemi ete bato nyonso oyo bawutaki na bowumbu basangana na Yelusalemi. \v 8 Kolanda mokano ya bakalaka mpe bakambi ya bato, moto nyonso oyo akomonana te sima na mikolo misato, bakobotola biloko na ye nyonso mpe bakolongola ye na lisanga ya bato oyo bawutaki na bowumbu. \v 9 Sima na mikolo yango misato, bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame basanganaki na Yelusalemi. Na mokolo ya tuku mibale ya sanza ya libwa, bato nyonso bavandaki kati na lopango, liboso ya Ndako ya Nzambe, mpe bazalaki kolenga makasi likolo ya makambo oyo mpe mpo ete mvula ezalaki kobeta makasi. \v 10 Nganga-Nzambe Esidrasi atelemaki mpe alobaki na bango : \pi1 — Bosalaki makambo ya mbindo awa bobalaki basi ya bapaya ; mpe, na nzela na yango, bobakiselaki Isalaele ngambo. \v 11 Sik’oyo, boyambola masumu na bino epai na Yawe, Nzambe ya batata na bino, mpe bokokisa mokano na Ye ! Bokabwana na bato ya bikolo ya bapaya oyo bazali kati na bino mpe bokabwana na basi na bino ya bapaya. \p \v 12 Lisanga mobimba ezongisaki na mongongo makasi : \pi1 — Ezali se bongo, tokosala ndenge olobi ! \v 13 Nzokande tozali bato ebele awa, mpe ezali eleko ya mvula ; tokoki kowumela na libanda te. Kutu, ezali te likambo ya mokolo moko to ya mikolo mibale, pamba te ebele kati na biso basali masumu kati na likambo oyo. \v 14 Tika ete bakambi na biso batikala awa na esika ya lisanga mobimba ! Mpe tika ete bato nyonso oyo, kati na bingumba na biso, babalaki basi ya bapaya bakende liboso ya bakambi mpe basambisi ya engumba moko na moko, na mikolo oyo bakokatela bango, kino kanda makasi ya Nzambe na biso ekolongwa kati na biso na tina na likambo yango. \p \v 15 Kaka Jonatan, mwana mobali ya Azaeli, mpe Yakizia, mwana mobali ya Tikiva, elongo na Meshulami mpe Shabetayi, moto ya libota ya Levi, nde batelemelaki mokano oyo. \v 16 Kasi bato oyo bawutaki na bowumbu basalaki ndenge elobamaki. Nganga-Nzambe Esidrasi aponaki bakambi ya mabota, moko mpo na libota moko na moko, mpe abengaki bango nyonso na bakombo na bango. Babandaki kovanda mpo na koyekola makambo yango na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi. \v 17 Mpe, na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, basilisaki koyekola makambo ya mibali nyonso oyo babalaki basi ya bapaya. \s1 Molongo ya bato oyo bamemaki ngambo \li4 \v 18 Tala kati na bakitani ya Banganga-Nzambe, mibali oyo babalaki basi ya bapaya : \li1 Kati na bakitani ya Jozue, mwana mobali ya Yotsadaki elongo na bandeko na ye ya mibali : \li2 Maaseya, Eliezeri, Yaribi mpe Gedalia. \li2 \v 19 Bango nyonso batombolaki maboko mpo na kozwa mokano ya kobengana basi na bango mpe ya kobonza meme ya mobali lokola mbeka mpo na masumu na bango. \li1 \v 20 Kati na bakitani ya Imeri : \li2 Anani mpe Zebadia. \li1 \v 21 Kati na bakitani ya Arimi : \li2 Maaseya, Eli, Shemaya, Yeyeli mpe Oziasi. \li1 \v 22 Kati na bakitani ya Pashuri : \li2 Eliowenayi, Maaseya, Isimaeli, Netaneeli, Yozabadi mpe Eleasa. \b \li4 \v 23 Kati na Balevi : \li2 Yozabadi, Shimei, Kelaya oyo bazalaki kobenga lisusu Kelita, Petaya, Yuda mpe Eliezeri. \li1 \v 24 Kati na babeti mindule : \li2 Eliashibi. \li1 Kati na bakengeli bikuke : \li2 Shalumi, Telemi mpe Uri. \b \li4 \v 25 Kati na bato mosusu ya Isalaele : \li1 kati na bakitani ya Pareoshi : \li2 Ramia, Yiziya, Malikiya, Miyamini, Eleazari, Malikiya mpe Benaya. \li1 \v 26 Kati na bakitani ya Elami : \li2 Matania, Zakari, Yeyeli, Abidi, Yeremoti mpe Eli. \li1 \v 27 Kati na bakitani ya Zatu : \li2 Eliowenayi, Eliashibi, Matania, Yeremoti, Zabadi mpe Aziza. \li1 \v 28 Kati na bakitani ya Bebayi : \li2 Yoanani, Anania, Zabayi mpe Atilayi. \li1 \v 29 Kati na bakitani ya Bani : \li2 Meshulami, Maluki, Adaya, Yashubi, Sheali mpe Ramoti. \li1 \v 30 Kati na bakitani ya Paati-Moabi : \li2 Adina, Kelali, Benaya, Maaseya, Matania, Betisaleyeli, Binuwi mpe Manase. \li1 \v 31 Kati na bakitani ya Arimi : \li2 Eliezeri, Yishiya, Malikiya, Shemaya, Simeoni, \v 32 Benjame, Maluki mpe Shemaria. \li1 \v 33 Kati na bakitani ya Ashumi : \li2 Matinayi, Matata, Zabadi, Elifeleti, Yeremayi, Manase mpe Shimei. \li1 \v 34 Kati na bakitani ya Bani : \li2 Madayi, Amirami, Ueli, \v 35 Benaya, Bedia, Keluwu, \v 36 Vania, Meremoti, Eliashibi, \v 37 Matania, Matinayi, Yasayi, \v 38 Bani, Binuwi, Shimei, \v 39 Shelemiya, Natan, Adaya, \v 40 Makinadibayi, Shashayi, Sharayi, \v 41 Azareyeli, Shelemiya, Shemaria, \v 42 Shalumi, Amaria mpe Jozefi. \li1 \v 43 Kati na bakitani ya Nebo : \li2 Yeyeli, Matitia, Zabadi, Zebina, Yadayi, Joeli mpe Benaya. \b \li4 \v 44 Mibali oyo nyonso nde babalaki basi ya bapaya, mpe mingi kati na bango bazwaki bana na nzela ya basi yango.