\id EZK Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Ezekieli \toc1 Ezekieli \toc2 Ezekieli \toc3 Ezk \mt1 Ezekieli \c 1 \ms1 Kosambisama ya Yelusalemi \s1 Emoniseli ya nkembo na Yawe \p \v 1 Ezalaki mokolo moko, mokolo ya mitano ya sanza ya minei, na mobu ya tuku misato, wana nazalaki pembeni ya ebale Kebari kati na bato oyo bakendeki na bowumbu, likolo efungwamaki mpe namonaki bimoniseli ya Nzambe. \p \v 2 Kaka na mokolo ya mitano ya sanza ya mobu wana, elingi koloba mobu ya mitano ya bowumbu ya mokonzi Yeoyakini, \v 3 Yawe alobaki na Ezekieli, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Buzi, pembeni ya ebale Kebari, kati na mokili ya bato ya Babiloni. Kuna, loboko na Yawe ezalaki likolo na ye. \p \v 4 Tango natalaki, namonaki mopepe moko ya makasi kowuta na ngambo ya nor ; bongo mopepe yango ezalaki komema mapata minene nzela moko na mikalikali ya kongenga makasi, mpe kati na yango ezalaki kongenga lokola ebende kati na moto. \v 5 Na kati-kati na yango, namonaki biloko moko lokola bikelamu minei ya bomoi oyo ezalaki na lolenge ya moto. \v 6 Moko na moko kati na yango ezalaki na bilongi minei mpe mapapu minei. \v 7 Makolo na yango ezalaki esembolama, matambe na yango ezalaki lokola matambe ya mwana ngombe ya mobali mpe ezalaki kongenga lokola bronze oyo bapetola na moto. \v 8 Na se ya mapapu na yango, na bangambo na yango minei, ezalaki na maboko minei lokola maboko ya bato ; mpe bikelamu nyonso minei ya bomoi ezalaki na bilongi mpe na mapapu na yango. \v 9 Mapapu na yango ezalaki kotutana moko na mosusu. Ekelamu moko na moko ezalaki kokende etala kaka na liboso mpe ezalaki kotala na sima te. \v 10 Tala ndenge bilongi na yango ezalaki : ekelamu moko na moko kati na nyonso minei ezalaki na elongi lokola ya moto (na liboso) : elongi lokola ya nkosi na ngambo ya loboko ya mobali, elongi lokola ya ngombe ya mobali na ngambo ya loboko ya mwasi mpe elongi lokola ya mpongo (na sima). \v 11 Bilongi na yango ezalaki nde bongo. Mapapu na yango ezalaki efungwama na likolo ; ekelamu moko na moko ezalaki na mapapu mibale : lipapu moko ezalaki kotutana na lipapu moko ya ekelamu mosusu ; mpe mapapu mibale ezalaki kobomba nzoto na yango. \v 12 Moko na moko ezalaki kokende kaka liboso ; ezalaki kokende bisika nyonso oyo Molimo azalaki kokamba yango mpe ezalaki kokende epai mosusu te. \p \v 13 Bikelamu yango ya bomoi ezalaki lokola makala ya moto to lokola koni oyo ezali kopela moto. Moto ezalaki kotambola-tambola kati na bikelamu yango, ezalaki kongenga mpe mikalikali ezalaki kobima kati na yango. \v 14 Bikelamu yango ezalaki kokende mpe kozonga lokola mikalikali. \p \v 15 Tango nazalaki kotala bikelamu yango, namonaki pine moko na mabele, pembeni ya ekelamu ya bomoi moko na moko, liboso ya bilongi na yango minei. \v 16 Tala ndenge bapine yango ezalaki mpe ndenge basala yango : ezalaki kongenga lokola libanga ya Krizolite mpe nyonso minei ezalaki ekokana ; bongo na ndenge basala yango, ezalaki lokola moko kati na mosusu. \v 17 Tango ekelamu moko na moko ezalaki kotambola, ezalaki kokende na ngambo oyo moko ya bilongi na yango ekotala, kati na bangambo na yango minei ; ezalaki kobaluka na ngambo mosusu te mpe bapine na yango ezalaki kotengama te soki bikelamu yango ezali kotambola. \v 18 Bajante ya bapine na yango ezalaki minene mpe somo : nyonso minei ezalaki etonda na miso zingazinga na yango. \v 19 Tango bikelamu ya bomoi ezalaki kotambola, bapine mpe ezalaki kotambola pembeni na yango ; kasi soki epumbwe longwa na se, bapine mpe ezalaki kopumbwa. \v 20 Esika nyonso Molimo azalaki kokende, bikelamu yango mpe ezalaki kokende ; bongo bapine mpe ezalaki komata elongo na yango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na bapine. \v 21 Tango bikelamu yango ezalaki kotambola, yango mpe ezalaki kotambola ; soki etelemi, yango mpe ezalaki kotelema ; soki epumbwe, yango mpe ezalaki kopumbwa elongo na bikelamu yango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na bapine. \p \v 22 Likolo ya mito ya bikelamu yango ya bomoi ezalaki na eloko moko lokola mapata ya likolo, oyo ezalaki kongenga makasi lokola libanga ya talo oyo ya krisitali. \v 23 Na se ya mapata yango, mapapu na yango ezalaki esembolama mpe etutana na mapapu ya baninga na yango ; mpe moko na moko kati na bikelamu yango ezalaki na mapapu mibale oyo ezalaki kobomba nzoto na yango. \v 24 Tango bikelamu yango ezalaki kotambola, nazalaki koyoka makelele ya mapapu na yango lokola makelele ya bambonge ya ebale monene to lokola mongongo ya Nkolo-Na-Nguya-Nyonso to lokola lokito ya mampinga. Tango ezalaki kotelema, ezalaki kokitisa mapapu na yango. \p \v 25 Na likolo ya mito na yango, mongongo moko ezalaki koyokana wuta na likolo ya mapata oyo ezalaki ; tango ezalaki kotelema, ezalaki mpe kokitisa mapapu na yango. \v 26 Boye, na likolo ya mapata oyo ezalaki na likolo ya mito na yango, ezalaki na eloko moko lokola libanga ya talo ya langi ya bule mpe lokola kiti ya bokonzi basala na safiri ; mpe na likolo ya kiti ya bokonzi yango, ezalaki na elilingi moko oyo ezalaki lokola moto. \v 27 Namonaki lisusu ete likolo ya loketo na yango ezalaki kongenga lokola linzanza, zingazinga na yango ezalaki lokola moto, se ya loketo na yango ezalaki lokola moto ; mpe mikalikali ya makasi ezingelaki yango. \v 28 Kongenga oyo ezingelaki yango ezalaki lokola monama na mapata na mokolo ya mvula ; elilingi yango ezalaki lokola nkembo na Yawe. Tango namonaki yango, nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nayokaki mongongo ya moto moko koloba na ngai. \c 2 \s1 Kobengama ya mosakoli Ezekieli \p \v 1 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, telema na makolo na yo ; pamba te nazali na likambo ya koyebisa yo. » \p \v 2 Wana azalaki nanu koloba, Molimo akotaki kati na ngai mpe atelemisaki ngai na makolo na ngai ; bongo nakomaki koyoka Ye koloba na ngai. \v 3 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, nazali kotinda yo epai ya bana ya Isalaele, ekolo ya bato ya mito makasi, bato oyo batombokelaka ngai. Wuta kala kino na mokolo ya lelo, bango mpe batata na bango batombokelaka kaka ngai. \v 4 Bato oyo epai wapi nazali kotinda yo, bazali mito makasi mpe mitema mabanga. Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › \v 5 Boye, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, mpo ete bazali libota ya batomboki, bakososola solo ete mosakoli moko azali kati na bango. \p \v 6 Bongo yo, mwana na moto, kobanga bango te mpe kobanga maloba na bango te, atako banzube mpe basende ezingeli yo mpe ozali kovanda elongo na koto\f + \fr 2.6 \fr*\ft Koto, na esika oyo, elakisi : nyama oyo babengaka, na lifalanse, scorpion\ft*\f*. Kozala na somo ya makambo oyo bazali koloba te mpe kolenga liboso na bango te atako bazali batomboki. \v 7 Osengeli koyebisa bango maloba na ngai, ezala bayokeli yo to bayokeli yo te, mpo ete bazali batomboki. \p \v 8 Kasi yo, mwana na moto, yoka makambo oyo nazali koloba na yo. Kotombokela ngai te lokola libota ya batomboki oyo ! Fungola monoko na yo mpe lia oyo nazali kopesa yo ! » \p \v 9 Bongo natalaki mpe namonaki loboko moko esembolama kino epai na ngai mpe esimbaki mokanda lokola buku elingama. \v 10 Loboko yango efungolaki mokanda yango liboso na ngai. Na bangambo na yango nyonso mibale, bakomaki : basango ya bileli, ya mikakatano mpe ya pasi. \c 3 \p \v 1 Bongo alobaki na ngai : « Mwana na moto, lia eloko oyo ezali liboso na yo, lia buku oyo elingama mpe kende koloba na libota ya Isalaele. » \p \v 2 Boye, nafungolaki monoko na ngai, mpe aleisaki ngai buku yango oyo elingama. \v 3 Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, lia mokanda oyo nazali kopesa yo mpe tondisa libumu na yo na yango. » \p Boye, naliaki yango, mpe ezalaki elengi na monoko na ngai lokola mafuta ya nzoyi. \v 4 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, kende sik’oyo na libota ya Isalaele mpe yebisa bango maloba na Ngai. \v 5 Otindami te epai ya bato oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola, kasi epai ya bana ya Isalaele. \p \v 6 Otindami te kati na bikolo ebele oyo monoko na bango ezalaka pasi mpo na koloba mpe kososola. Solo, soki natindaki yo epai ya bikolo wana, balingaki kososola sango oyo omemeli bango. \v 7 Kasi libota ya Isalaele bakolinga koyokela yo te, mpo ete balingaka koyokela Ngai te ; pamba te libota mobimba ya Isalaele bazali mitema mpe mito makasi. \v 8 Nakokomisa yo motema mpe moto makasi lokola bango. \v 9 Nakokomisa mbunzu na yo makasi lokola diama to mpe makasi koleka ata libanga. Kobanga te mpe kolenga te liboso na bango, atako bazali libota ya batomboki. » \p \v 10 Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, yoka malamu maloba oyo nakoloba na yo mpe batela yango malamu kati na motema na yo. \v 11 Kende sik’oyo epai ya bandeko na yo, oyo bozali elongo na bango kati na bowumbu ; okoyebisa bango mpe, ezala bayokeli yo to baboyi koyokela yo, okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › » \p \v 12 Boye, Molimo atelemisaki ngai mpe nayokaki sima na ngai makelele moko ya makasi : « Tika ete nkembo ya Yawe epambolama wuta na esika oyo Ye avandaka ! » \p \v 13 Nayokaki lisusu makelele ya mapapu ya bikelamu ya bomoi, tango ezalaki kotutana lipapu moko na mosusu, makelele ya bapine mpe lokito moko ya makasi. \v 14 Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai mosika. Boye, nazalaki kokende na pasi na motema, mpe molimo na ngai etondisamaki na kanda ; nzokande loboko na Yawe ezalaki kosala kati na ngai na nguya makasi. \v 15 Nakomaki kino na Teli-Avivi epai wapi bato oyo bamemaki na bowumbu bazalaki kovanda, pembeni ya ebale Kebari. Navandaki kuna elongo na bango mikolo sambo ; nazalaki kokamwa mingi. \p \v 16 Sima na mikolo sambo, Yawe alobaki na ngai : \p \v 17 « Mwana na moto, nasili kotia yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele ; boye yoka maloba oyo nazali koloba mpe kebisa bango na Kombo na Ngai. \v 18 Soki Ngai nalobi na moto mabe : ‹ Solo, okokufa, › kasi yo okebisi ye te to oyebisi ye te ete atika nzela na ye ya mabe mpo ete abikisa bomoi na ye, moto wana ya mabe akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto na yo. \v 19 Kasi soki, yo, okebisi moto wana ya mabe, mpe atiki mabe na ye te to abongwani na nzela na ye ya mabe te, akokufa solo na masumu na ye, mpe yo okobikisa bomoi na yo. \p \v 20 Soki moto ya sembo atiki kosalela bosembo na ye mpe akomi kosala mabe, nakotia libaku liboso na ye, mpe moto yango akokufa, solo. Soki okebisaki ye te, akokufa penza mpo na masumu na ye, mpe bakotikala kokanisa lisusu te bolamu nyonso oyo ye asilaki kosala ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo. \v 21 Kasi soki, yo, okebisi moto ya sembo mpo ete asala masumu te, bongo ye mpe asali masumu te, akobikisa solo bomoi na ye, pamba te ayoki likebisi na yo, mpe yo, okobikisa bomoi na yo. » \p \v 22 Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai, mpe alobaki na ngai : « Telema mpe kende na lubwaku ; nazali na makambo ya koyebisa yo kuna. » \p \v 23 Natelemaki mpe nakendeki na lubwaku. Nkembo ya Yawe ezalaki kuna : ezalaki lokola nkembo oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye nakweyaki elongi na ngai kino na mabele. \v 24 Bongo Molimo akotaki kati na ngai mpe atelemisaki ngai na makolo na ngai. Alobaki na ngai : « Kende komikangela kati na ndako na yo. \v 25 Yo, mwana na moto, bakokanga yo basinga, bakolinga-linga yo mpo ete okoka te kobima kati na bato. \v 26 Nakokangisa lolemo na yo na monoko na yo mpo ete okoka koloba te mpe okoka kopamela bango te, pamba te bazali libota ya batomboki. \v 27 Kasi tango nakoloba na yo mpe nakofungola monoko na yo mpo ete oyebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi. › Tika ete moto oyo akolinga koyoka ayoka, mpe oyo akoboya koyoka aboya na ye ! Pamba te bazali libota ya batomboki. » \c 4 \s1 Kobebisama ya Yelusalemi mpe ya mokili ya Yuda \p \v 1 « Sik’oyo mwana na moto, kamata biliki ya kotumba, tia yango liboso na yo mpe koma na likolo na yango elilingi ya engumba Yelusalemi. \v 2 Sala yango lokola engumba oyo bazingela, oyo batonga mabulu ya kobombamela zingazinga na yango mpe oyo batelemisa bamir ya zelo mpo na kobombama, engumba oyo batonga milako zingazinga na yango, mpe telemisa bakonzi ya basoda oyo babongami mpo na kobundisa yango na zingazinga. \v 3 Kamata eteni ya linzanza, tia yango lokola mir ya ebende na kati-kati na yo mpe elilingi ya engumba oyo osili kokoma, mpe tika ete miso na yo etala yango. Bakozingela engumba yango ndenge kaka yo osili kozingela yango. Yango nde ekozala elembo mpo na libota ya Isalaele. \b \p \v 4 Bongo yo, lala na ngambo ya loboko na yo ya mwasi, tia na ngambo wana masumu ya libota ya Isalaele. Okomema masumu na bango mikolo nyonso oyo okolala na ngambo wana. \v 5 Ngai moko nakokatela yo motango ya mikolo, oyo ekokokana na motango ya mibu oyo libota ya Isalaele asali masumu : mikolo nkama misato na tuku libwa ; mpe okomema solo masumu ya libota ya Isalaele na mikolo oyo. \p \v 6 Sima na yo kosilisa mikolo yango, lala lisusu na ngambo ya loboko na yo ya mobali mpe mema lisusu masumu ya libota ya Yuda. Nakateli yo mikolo tuku minei : mokolo moko mpo na mobu moko na moko. \v 7 Talisa elongi mpe loboko na yo na ngambo ya Yelusalemi oyo bazingela mpe sakola mabe na tina na yango. \v 8 Nakolinga-linga yo na basinga mpo ete okoka kobaluka na ngambo mosusu te kino tango okokokisa mikolo na yo ya etumbu. \b \p \v 9 Kamata ble mpe orje, madesu mpe misili, soya mpe masango, tia yango nyonso kati na mbeki moko kaka oyo babombelaka biloko. Ezali yango nde ekozala bilei oyo okobanda kolia tango nyonso, na mikolo nkama misato na tuku libwa oyo okowumela ya kolala na ngambo moko. \p \v 10 Bilei na yo ya mokolo na mokolo ekozala ya bagrame nkama mibale na tuku mibale, mpe okobanda kolia yango tango nyonso. \v 11 Okobanda komela tango nyonso litele moko ya mayi. \v 12 Okolia bilei basala lokola gato ya orje mpe okobanda kotumba yango na miso ya bato nyonso, na moto oyo bapelisa na nyei ya bato. » \p \v 13 Yawe alobaki : \pi1 — Ezali na nzela wana nde bana ya Isalaele bakolia bilei ya mbindo kati na bikolo epai wapi nakobengana bango. \p \v 14 Bongo nalobaki : \pi1 — Te, Nkolo Yawe ! Natikala nanu komikomisa mbindo te ! Wuta bolenge na ngai, natikala nanu kolia te nyama oyo ekufa yango moko to nyama oyo nyama ya zamba esila koboma ! Te, monoko na ngai etikala nanu kolia mosuni ya mbindo te ! \p \v 15 Alobaki na ngai : \pi1 — Malamu mingi ! Na esika ya nyei ya bato, napesi yo nyei ya ngombe mpo ete okoka kotumbela gato na yo. \p \v 16 Alobaki na ngai lisusu : \pi1 — Mwana na moto, nakobebisa bilei nyonso oyo ezali na bibombelo ya Yelusalemi. Bato bakolia biteni mike ya mapa, na pasi na motema, mpe bakomela mayi na bakopo ya mike, na somo ; \v 17 pamba te bilei mpe mayi ya komela ekokoma pasi mpo na kozwa. Moko na moko akokamwa mpo na moninga na ye mosusu ; mpe bakobebisama likolo ya masumu na bango. \c 5 \p \v 1 Sik’oyo, mwana na moto, kamata mopanga ya minu mpe salela yango lokola jileti mpo na kokata suki ya moto mpe mandefu na yo ; kamata lisusu emekelo kilo mpe kabola suki yango na maboke. \v 2 Tango mikolo ya etumbu na yo ekosila, okotumba na moto kati na engumba ndambo moko kati na bandambo misato ; okokamata ndambo moko mosusu kati na bandambo misato, okobeta-beta yango na mopanga zingazinga ya engumba, mpe okopanza ndambo moko mosusu kati na bandambo misato na mopepe, mpe Ngai nakolanda bango na mopanga. \p \v 3 Kasi kamata ndambo moke kaka ya suki, kanga yango na songe ya elamba na yo. \p \v 4 Bongo, na oyo ekotikala, bwaka ndambo na yango na moto mpo ete ezika. Boye, moto oyo ekobima kuna ekopanzana na libota mobimba ya Isalaele. \b \p \v 5 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala Yelusalemi ! Natiaki yango na kati-kati ya bikolo, mpe bamboka minene ezingelaki yango. \v 6 Kasi likolo ya mitema mabe ya bato na yango, batombokelaki mibeko na Ngai mpe balandaki bikateli na Ngai te ; basalaki mabe koleka bikolo mpe bamboka ya zingazinga, pamba te batiolaki mibeko na Ngai, batambolaki te kolanda mitindo na Ngai. \v 7 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola botambolaki na botomboki koleka bikolo oyo ezali zingazinga na bino, bolandaki mibeko mpe bikateli na Ngai te mpe bolandaki ata kutu bosembo ya bamboka oyo ezingelaki bino te ; \v 8 mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Ngai moko nakotelemela yo, Yelusalemi, mpe nakopesa yo etumbu na miso ya bikolo. \v 9 Likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo osalaka, nakosala yo makambo oyo natikala nanu kosala te na tango ya kala mpe oyo nakotikala kosala te na mikolo ekoya. › \v 10 Yango wana, kati na bino, batata bakolia bana na bango, mpe bana bakolia batata na bango. Nakopesa bino etumbu mpe nakopanza bipai nyonso bato na bino nyonso oyo bakotikala na bomoi. \p \v 11 Mpe lisusu, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe : ‹ Lokola bokomisi Ndako na Ngai ya bule mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko mpe makambo na bino ya nkele, nakolongola Ngai moko ngolu na Ngai na likolo na bino : liso na Ngai ekotala bino lisusu na mawa te mpe nakobikisa bino lisusu te. › \v 12 Ndambo moko kati na bandambo misato ya bato na yo bakokufa na bokono oyo ebomaka to na nzala makasi kati na bamir na yo ; mpe ndambo moko kati na bandambo misato mosusu bakokufa na mopanga na libanda ya bamir na yo. Bongo, nakopanza ndambo moko kati na bandambo misato mosusu, na bisika mosusu mpe nakolanda bango na mopanga. \v 13 Kanda na Ngai ekosila kaka soki bazwi etumbu mpo na mabe na bango ; nakokitisela bango kanda na Ngai mpe bakoyeba ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki na zuwa na Ngai. \p \v 14 Yo Yelusalemi, nakobebisa yo, okoyokisama soni kati na bikolo nyonso oyo ezingeli yo mpe na miso ya bato nyonso oyo bakolekela na nzela na yo. \v 15 Okozala likambo ya soni, ya kotiola, ya liseki mpe ya soni makasi na miso ya bikolo oyo ezingeli yo, tango nakopesa yo etumbu na kanda mpe na kotomboka na Ngai ya makasi penza. » Ngai Yawe nde nalobi. \p \v 16 « Tango nakobwakela yo makonga na Ngai ya mike ya nzala makasi oyo ebomaka mpe oyo ebebisaka, nakosala bongo mpo na kosilisa koboma bino : nakoyeisa nzala makasi koleka kati na yo mpe nakolongola bilei na bibombelo na yo. \v 17 Nakotindela yo nzala makasi mpe banyama mabe mpo ete eboma bana na yo nyonso. Nakotindela yo mopanga mpe bokono ya makasi, nakosopa makila koleka kati na yo. Ngai Yawe nde nalobi. » \c 6 \s1 Kosambisama ya losambo ya bangomba ya Isalaele \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, balola elongi na yo na ngambo ya bangomba ya Isalaele mpe sakola mabe na tina na yango. \v 3 Loba na yango : Oh bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba milayi, na bangomba mikuse, na mabulu mpe na mabwaku : ‹ Namibongisi mpo na kotindela bino mopanga mpe kobebisa bisambelo na bino ya likolo ya bangomba. \v 4 Nakobebisa bitumbelo na bino nyonso, nakobuka mike-mike bitumbelo na bino ya malasi ya ansa mpe nakoboma bato na bino liboso ya banzambe na bino ya bikeko. \v 5 Nakotanda bibembe ya bana ya Isalaele liboso ya banzambe na bango ya bikeko mpe nakopanza mikuwa na bino zingazinga ya bitumbelo na bino. \v 6 Bingumba ekotikala lisusu na bato te mpe bisambelo ya likolo ya bangomba ekobebisama na bisika nyonso oyo bokozala ; mpo ete bitumbelo na bino etikala pamba mpe ebebisama, banzambe na bino ya bikeko ebukana biteni-biteni mpe ebebisama, bitumbelo na bino ya malasi ya ansa ebukana mpe biloko oyo maboko na bino esalaki ezala lisusu te. \v 7 Kati na bino, bato bakokufa na mopanga ; bongo bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. \p \v 8 Kasi nakobikisa ndambo ya bato kati na bino : bakobika na mopanga tango nakopanza bino kati na mikili mpe bikolo. \v 9 Bongo, kati na bikolo nyonso epai wapi bakokende na bowumbu, bato oyo bakobika bakokanisa ngai tango nakobuka lolendo ya mitema na bango, oyo etonda na posa ya kosalela banzambe mosusu mpe nakobebisa miso na bango, oyo eboyaka kotala Ngai mpo na kotala banzambe na bango ya bikeko. Bango moko bakoyoka nkele mpo na mabe oyo basalaki mpe mpo na misala na bango nyonso ya mbindo. \v 10 Boye bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, mpe ete nakebisaki bango na pamba te ete nakotindela bango pasi. › \p \v 11 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Beta maboko na yo, tuta makolo na yo mpe ganga : ‹ Mawa ! › mpo na misala mabe mpe misala ya mbindo ya libota ya Isalaele, pamba te bakokufa na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka ! \v 12 Moto oyo azali mosika akokufa na bokono oyo ebomaka, oyo azali pembeni akokufa na mopanga ; mpe oyo atikali, bakozingela ye mpe akokufa na nzala makasi. Nakosilisa kanda na Ngai na banzoto na bango. \v 13 Boye, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe tango bato na bango bakokufa na mopanga kati na banzambe na bango ya bikeko zingazinga ya bitumbelo na bango, na bangomba nyonso ya mikuse mpe na likolo ya bangomba nyonso ya milayi, na se ya banzete nyonso ya mibesu mpe na se ya terebente nyonso ya mobesu etonda na makasa, bisika oyo bazalaki kotumbela banzambe na bango ya bikeko ansa lokola mbeka ya solo kitoko. \v 14 Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bango mpe nakosala ete mokili na bango etikala lisusu na bato te, wuta na esobe kino na engumba Ribila, na bisika nyonso oyo bazali kovanda ; boye bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. » \c 7 \s1 Tango ya suka ebelemi \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \v 2 « Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na mokili ya Isalaele : \q1 ‹ Esili ! Tango ya suka ebelemi \q2 mpo na mokili mobimba ! \q1 \v 3 Tango ya suka ekoki sik’oyo mpo na yo, \q2 nakopelisela yo kanda na Ngai, \q1 nakosambisa yo kolanda etamboli na yo \q2 mpe nakofuta yo kolanda misala na yo nyonso ya mbindo. \q1 \v 4 Nakotala yo na liso ya mawa te \q2 mpe nakobikisa yo te ; \q1 nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo \q2 mpe kolanda misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. \m Boye okoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. › \q1 \v 5 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q2 ‹ Mawa ! Pasi ya somo ezali koya ! \q1 \v 6 Tango ya suka ebelemi ! \q2 Ya solo, tango ya suka ebelemi penza ! \q1 Etelemeli yo. \q2 Tala, tango yango esili kobelema ! \q1 \v 7 Kobebisama ekokomela yo, yo movandi ya mokili ! \q2 Tango yango ekoki, mokolo yango ebelemi, \q1 somo makasi ekoti, \q2 mpe esengo ezali lisusu te na likolo ya bangomba. \q1 \v 8 Nakomi pene ya kopelisela yo kanda na Ngai \q2 mpe ya kotombokela yo ! \q1 Nakosambisa yo kolanda etamboli \q2 mpe misala na yo nyonso ya mbindo. \q1 \v 9 Nakotala yo na liso ya mawa te mpe nakobikisa yo te, \q2 nakofuta yo solo kolanda etamboli na yo \q1 mpe misala ya mbindo oyo ezali kati na yo. \m Boye okoyeba solo ete Ngai Yawe nde nabetaka. \q1 \v 10 Tala, mokolo yango nde yango oyo ! \q2 Esili kobelema ! \q1 Kobebisama eboti mbuma, \q2 lingenda ebimisi bafololo, lolendo ekoli ! \q1 \v 11 Makambo mabe ekoli makasi \q2 mpe ekomi lokola fimbu \q1 mpo na kopesa etumbu na misala mabe ; \q2 moto moko te kati na bato \q1 to kati na bato ebele akotikala ; \q2 eloko moko te ekotikala, \q1 ezala bomengo to biloko ya motuya. \b \q1 \v 12 Tango ebelemi, mokolo yango ekoki. \q2 Tika ete mosombi moko te azala na esengo \q1 to moteki moko te azala na mawa, \q2 pamba te kanda makasi ezali kozela bato nyonso. \q1 \v 13 Moteki akozwa lisusu te motuya ya biloko oyo atekaki, \q2 ata soki azali nanu na bomoi ; \q1 pamba te emoniseli oyo ezali kotalisa \q2 ete kobebisama ya bomengo ya mokili ekokokisama solo. \q1 Likolo ya masumu na bango, \q2 moto moko te kati na bango akobikisa bomoi na ye. \b \q1 \v 14 Ata soki babeti kelelo to bamibongisi ndenge nini, \q2 moto moko te akokende na bitumba ; \q2 pamba te kanda na Ngai ezali likolo ya bato nyonso. \q1 \v 15 Mopanga ekoboma na libanda ya engumba, \q2 bokono oyo ebomaka mpe nzala makasi \q1 ekoboma kati na engumba ; \q2 bato oyo bazali kati na mokili bakokufa na mopanga, \q1 mpe bato oyo bazali kati na engumba bakokufa \q2 na bokono oyo ebomaka mpe na nzala makasi. \q1 \v 16 Batikali bakokima na likolo ya bangomba ; \q2 mpe kuna, bakokoma kolelalela lokola bibenga, \q2 moto na moto mpo na masumu na ye. \q1 \v 17 Maboko na bango nyonso ekolemba, \q2 mpe mabolongo na bango nyonso \q2 ekolemba lokola mayi. \q1 \v 18 Bakolata bilamba ya basaki \q2 mpe somo ekokanga bango ; \q1 bilongi na bango ekotonda na soni, \q2 bakokokola suki ya mito na bango. \b \q1 \v 19 Bakobwaka palata na bango na babalabala, \q2 mpe wolo na bango ekomonana lokola eloko ya mbindo. \q1 Palata mpe wolo na bango ekozala na makoki te \q2 ya kobikisa bango na mokolo ya kanda ya Yawe. \q1 Palata mpe wolo yango ekosilisa \q2 baposa mpe nzala na bango te, \q2 pamba te yango nde ekweyisaki bango na masumu. \q1 \v 20 Basalaki lolendo mpo na kitoko \q2 mpe motuya ya biloko na bango ya monzele \q1 oyo basalaki na yango banzambe na bango ya bikeko \q2 mpe bililingi ya somo. \q1 Yango wana, nakokomisa biloko yango \q2 mbindo na miso na bango. \q1 \v 21 Nakokaba yango lokola bomengo ya bitumba \q2 na maboko ya bapaya mpe ya bato mabe ya mokili \q1 mpo ete babotola yango na makasi \q2 mpe basakanela yango. \q1 \v 22 Elongi na Ngai ekotala bango lisusu te, \q2 mpe bato mabe bakobebisa Esika na Ngai ya bule. \q1 Bongo, miyibi bakokota kuna \q2 mpe bakosambwisa yango. \b \q1 \v 23 Bomisalela minyololo mpo ete mokili etondi na babomi \q2 mpe engumba etondi na makambo mabe. \q1 \v 24 Nakotinda ekolo oyo eleki mabe kati na bikolo \q2 mpo ete eya kobotola bandako na bango ; \q1 nakosilisa lolendo ya bato ya nguya \q2 mpe nakosambwisa bisika na bango ya bule. \b \q1 \v 25 Tango makambo oyo ya somo ekoya, \q2 bakoluka kimia kasi bakozwa yango te. \q1 \v 26 Pasi likolo ya pasi nde ekokomela bango, \q2 basango ya mabe na ya mabe nde ekolandana. \q1 Bakoluka bimoniseli na pamba epai ya basakoli ; \q2 Banganga-Nzambe bakokoka lisusu te \q1 koteya malakisi ya Mobeko, \q2 mpe bakambi bakozanga toli ya kopesa. \q1 \v 27 Mokonzi akozala na matanga, \q2 mokambi akolata pili, \q1 mpe maboko ya bato ya mokili ekokoma kolenga. \q2 Nakofuta bango kolanda etamboli na bango \q1 mpe nakosambisa bango kolanda misala na bango. \q2 Boye, bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. › » \c 8 \s1 Losambo ya banzambe ya bikeko na Tempelo \p \v 1 Na mobu ya motoba, na mokolo ya mitano ya sanza ya motoba, wana nazalaki ya kovanda kati na ndako na ngai, mpe bakambi ya Yuda bavandaki liboso na ngai, loboko ya Nkolo Yawe esimbaki ngai kuna. \p \v 2 Tango natalaki, namonaki elilingi moko lokola elongi ya moto. Eteni oyo ezalaki komonana lokola se ya loketo na yango ezalaki lokola moto, mpe lolenge ya eteni oyo ezalaki komonana lokola likolo ya loketo na yango ezalaki kongenga makasi lokola linzanza ya sika. \p \v 3 Asembolaki elilingi moko lokola loboko mpe asimbaki ngai na suki ya moto. Molimo atombolaki ngai na kati-kati ya se mpe likolo mpe amemaki ngai, kati na emoniseli ya Nzambe, kino na Yelusalemi, na ekotelo ya Ekuke ya nor ya lopango ya kati ya Tempelo, epai wapi batelemisaki nzambe ya ekeko oyo etumbolaka zuwa. \v 4 Nkembo ya Nzambe ya Isalaele ezalaki kuna ndenge kaka namonaki yango na emoniseli kati na lubwaku. \p \v 5 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala na ngambo ya nor. » \p Natombolaki miso na ngai mpe namonaki nzambe ya ekeko ya zuwa, na ekotelo ya Ekuke oyo ya nor ya etumbelo. \p \v 6 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, ozali komona makambo oyo bazali kosala, makambo mabe mpe ya nkele oyo libota ya Isalaele bazali kosala awa, makambo oyo ekokomisa Ngai mosika ya Esika na Ngai ya bule ? Kasi okomona lisusu makambo oyo ezali mabe koleka. » \p \v 7 Amemaki ngai na ekotelo ya lopango. Tango natalaki, namonaki lidusu moko na mir. \v 8 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, tobola mir. » \p Tango natobolaki yango, namonaki ekuke moko kuna. \v 9 Alobaki na ngai lisusu : « Kota ; okomona makambo mabe mpe ya nkele oyo bazali kosala awa ! » \p \v 10 Tango nakotaki, natalaki mpe namonaki ete bakomakoma na bamir bililingi ya miselekete mpe ya banyoka ya lolenge nyonso, ya banyama nyonso ya mbindo mpe ya banzambe nyonso ya bikeko ya libota ya Isalaele. \v 11 Bongo, liboso na yango, bakambi tuku sambo ya libota ya Isalaele batelemaki ; mpe moko na moko kati na bango asimbaki mbabola oyo batumbelaka malasi : ezalaki kobimisa milinga ya solo ya ansa. Yazania, mwana mobali ya Shafani, azalaki mpe elongo na bango. \v 12 Molimo alobaki na ngai : « Mwana na moto, omoni makambo oyo bakambi ya libota ya Isalaele bazali kosala, moko na moko kati na esika ya bule ya nzambe na ye ya ekeko ? Bazali koloba : ‹ Yawe azali komona biso te, Yawe asili na Ye kosundola mokili ! › » \p \v 13 Alobaki lisusu : « Okomona bango ndenge bazali kosala makambo ya mbindo oyo eleki penza mabe. » \p \v 14 Bongo amemaki ngai lisusu na ekotelo ya Ekuke ya ngambo ya nor ya Tempelo ya Yawe ; bongo namonaki basi bavandi wana, bazali kolela Tamuzi\f + \fr 8.14 \fr*\ft Tamuzi azalaki nzambe ya bato ya Babiloni oyo anokisaka mvula\ft*\f*. \v 15 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, omoni makambo oyo ? Okomona lisusu makambo ya mbindo koleka oyo ya liboso. » \p \v 16 Akotisaki ngai kati na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe : na ekotelo ya Tempelo, bato tuku mibale na mitano bazalaki na kati-kati ya ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe etumbelo ; bapesaki mikongo na Tempelo ya Yawe mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya este ; bazalaki kogumbama na kotalaka na ngambo ya este mpo na kogumbamela moyi. \v 17 Alobaki na ngai lisusu : « Mwana na moto, omoni ? Boni, ezali penza pamba mpo na libota ya Yuda kosala makambo ya nkele oyo bazali kosala na esika oyo ? Batondisa lisusu mokili na makambo na bango ya kanza mpo na kokoba kotumbola kanda na Ngai ? Tala ndenge bazali kotombola mandalala kino na zolo ! \v 18 Mpo na yango, Ngai mpe nakopesa bango etumbu na kanda, nakoyokela bango mawa te mpe nakobikisa bango te. Ata bagangi na matoyi na Ngai, nakoyoka bango te. » \c 9 \s1 Etumbu ya basambeli ya banzambe ya bikeko \p \v 1 Bongo nayokaki ye kobelela na mongongo makasi : « Bopusana awa, bino oyo bozali na mokumba ya kobebisa engumba ! Tika ete moko na moko kati na bino asimba ebundeli na ye na loboko ! » \p \v 2 Namonaki bato motoba koya wuta na nzela ya Ekuke oyo ya likolo, oyo etala na ngambo ya nor ; moko na moko kati na bango asimbaki ebundeli oyo ebomaka na loboko na ye. Kati na bango, ezalaki na moto moko oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye. Bakotaki na kati mpe batelemaki pene ya etumbelo ya bronze. \v 3 Nkembo ya Nzambe ya Isalaele elongwaki na likolo ya basheribe epai wapi ezalaki kowumela mpe ekendeki kino na ekotelo ya Tempelo ; mpe Yawe abengisaki moto oyo alataki bilamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye. \v 4 Yawe alobaki na ye : « Tambola kati na Yelusalemi mpe tia bilembo na bilongi ya bato oyo bazali komona pasi na mitema mpe bazali kolela likolo ya makambo nyonso ya nkele oyo ezali kosalema kati na engumba oyo. » \p \v 5 Wana nazalaki nanu koyoka, alobaki na bato mosusu : « Bolanda ye kati na engumba mpe boboma bato na mawa te, bobikisa ata moto moko te ! \v 6 Boboma bampaka, bilenge, basali ya mibali, basali ya basi mpe bana mike ; kasi bomeka kosimba te moto nyonso oyo azali na elembo na elongi. Bobanda na Esika na Ngai ya bule ! » \p Boye babandaki na bampaka oyo bazalaki liboso ya Tempelo. \v 7 Alobaki na bango : « Bokomisa Tempelo mbindo mpe botondisa mapango na yango na bibembe. Bokende ! » \p Babimaki mpe bakendeki koboma bato kati na engumba. \v 8 Tango bazalaki koboma bato, natikalaki ngai moko ; nakweyaki elongi na ngai kino na mabele mpe nakomaki koganga : \pi1 — Oh, Nkolo Yawe ! Okosilisa solo koboma batikali nyonso ya Isalaele, na kopelisela Yelusalemi kanda na Yo ? \p \v 9 Azongiselaki ngai : \pi1 — Lisumu ya libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda eleki monene makasi penza. Mokili etondi na makila, mpe engumba etondi na kozanga bosembo ; pamba te bazali koloba : « Yawe asundoli mokili ; Yawe azali komona eloko moko te. » \v 10 Yango wana, Ngai mpe nakotala bango na liso ya mawa te mpe nakobikisa bango te. Kasi nakotanga mabe na bango na mito na bango. \p \v 11 Moto oyo alataki elamba ya lino mpe azalaki na ekomeli na loketo na ye apesaki sango, na maloba oyo : « Nasali makambo oyo otindaki ngai. » \c 10 \s1 Nkembo na Yawe elongwe na Tempelo \p \v 1 Tango natalaki, namonaki na mapata, na likolo ya mito ya basheribe, eloko moko lokola libanga ya talo oyo babengaka safiri ; mpe na likolo ya libanga yango, eloko moko ezalaki komonana lokola kiti ya bokonzi. \v 2 Yawe alobaki na moto oyo alataki bilamba ya lino : « Leka kati na bapine oyo ezali na se ya basheribe, tondisa maboko na yo na makala ya moto oyo okozwa kati na basheribe mpe panza yango na engumba. » \p Mpe asalaki bongo na miso na ngai. \v 3 Nzokande, basheribe bazalaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo tango moto wana akotaki, mpe lipata moko etondisaki lopango na yango ya kati. \v 4 Nkembo ya Yawe elongwaki na likolo ya basheribe mpe ekendeki na ekotelo ya Tempelo. Tempelo etondaki na lipata, mpe lopango na yango ya kati etondaki na kongenga ya Nkembo ya Yawe. \v 5 Makelele ya mapapu ya basheribe ezalaki koyokana na mosika kino na lopango ya libanda ya Tempelo lokola mongongo ya Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, tango alobaka. \p \v 6 Tango Yawe apesaki mitindo na moto oyo alataki bilamba ya lino : « Kamata moto kati na bapine mpe kati na basheribe, » moto yango akotaki mpe atelemaki pembeni ya pine moko. \v 7 Bongo moko kati na basheribe asembolaki loboko na ye kino na moto oyo ezalaki na kati-kati na bango ; akamataki ndambo ya makala ya moto kati na moto mpe atiaki yango kati na maboko ya moto oyo alataki bilamba ya lino. Moto yango azwaki yango mpe abimaki na libanda. \v 8 Na se ya mapapu ya basheribe, elilingi moko emonanaki lokola maboko ya moto. \p \v 9 Tango natalaki, namonaki bapine minei pene ya basheribe : pine moko pembeni ya sheribe moko ; bongo bapine yango ezalaki kongenga lokola libanga ya Krizolite. \v 10 Bapine yango minei ezalaki ndenge moko, ezalaki komonana lokola moko kati na mosusu. \v 11 Soki ezali kotambola, ekendaka na bangambo nyonso minei oyo elongi ya basheribe ekotala ; mpe bapine yango ezalaki kotengama te soki basheribe bazali kotambola. Basheribe bazalaki kokende na bangambo nyonso oyo bilongi na bango ezalaki kotala, mpe bazalaki kobaluka na bangambo mosusu te. \v 12 Nzoto mobimba ya moko na moko kati na bango, ezala mokongo to maboko to mpe mapapu na bango, ezalaki etonda na miso, ndenge bapine na bango minei ezalaki. \v 13 Nayokaki ete bazali kobenga bapine yango « bapine ya mopepe ya kayina. » \v 14 Sheribe moko na moko azalaki na bilongi minei : elongi ya liboso ezalaki lokola elongi ya sheribe, ya mibale lokola elongi ya moto, ya misato lokola elongi ya nkosi mpe ya minei lokola elongi ya mpongo. \p \v 15 Bongo basheribe bapumbwaki na likolo makasi. Ezalaki bikelamu ya bomoi oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. \v 16 Soki basheribe bazali kotambola, bapine oyo ezalaki na mipanzi na bango ezalaki mpe kotambola. Soki bafungoli mapapu na bango mpo na kopumbwa longwa na se, bapine yango mpe ezalaki kokabwana na bango te, kasi nde ezalaki ya kokangana na mipanzi na bango. \v 17 Soki basheribe batelemi, yango mpe ezalaki kotelema ; soki bapumbwe, yango mpe ezalaki kopumbwa elongo na bango, pamba te molimo ya bikelamu ya bomoi ezalaki kati na yango. \b \p \v 18 Nkembo ya Yawe elongwaki na ekotelo ya Tempelo mpe ekendeki kotelema na likolo ya basheribe. \v 19 Wana nazalaki kotala, basheribe bafungolaki mapapu na bango mpe bapumbwaki longwa na se ; mpe tango bazalaki kokende, bapine yango mpe ezalaki kokende elongo na bango. Batelemaki na ekotelo ya Ekuke ya ngambo ya este ya Tempelo ya Yawe, bongo nkembo ya Nzambe ya Isalaele ezalaki likolo na bango. \v 20 Ezalaki nde bikelamu ya bomoi oyo namonaki na se ya Nzambe ya Isalaele pembeni ya Kebari ; mpe nasosolaki ete ezali basheribe. \v 21 Moko na moko kati na bango azalaki na bilongi minei mpe mapapu minei ; bongo na se ya mapapu na bango, ezalaki na elilingi moko lokola maboko ya moto. \v 22 Bilongi na bango ezalaki ndenge moko na oyo namonaki pene ya Kebari. Moko na moko azalaki kotambola kaka liboso. \c 11 \s1 Kosambisama ya bakangami ya Isalaele \p \v 1 Bongo Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kino na ekuke ya Tempelo ya Yawe, oyo etala na ngambo ya este. Bato tuku mibale na mitano bazalaki wana na ekotelo ya ekuke ; mpe namonaki kati na bango : Yazania, mwana mobali ya Azuri, mpe Pelatia, mwana mobali ya Benaya, oyo bazalaki bakambi ya bato. \v 2 Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala bato oyo basalaka mabongisi ya mabe mpe bapesaka batoli ya mabe kati na engumba oyo. \v 3 Balobaka : ‹ Boni, tango ya kotonga bandako ekoki nanu te ? Engumba oyo ezali lokola nzungu, mpe biso, tozali lokola misuni. › \v 4 Yango wana, sakola makambo ya mabe na tina na bango ; sakola, mwana na moto ! » \p \v 5 Molimo na Yawe akitaki likolo na ngai mpe ayebisaki ngai ete naloba : \p « Tala liloba oyo Yawe alobi : Tala makambo oyo bozali koloba, bino bakambi kati na Isalaele ! Kasi Ngai nayebi makambo oyo bozali kokanisa. \v 6 Bobomi bato ebele kati na engumba oyo mpe botondisi babalabala na yango na bibembe. \v 7 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : engumba oyo ezali solo nzungu, mpe bibembe oyo bobwaki kuna, yango nde misuni ; kasi Ngai, nakobengana bino kati na yango. \v 8 Bozali kobanga mopanga ? Solo, Ngai, nakotindela bino mopanga, elobi Nkolo Yawe ; \v 9 nakobengana bino na engumba oyo, nakokaba bino na maboko ya bapaya mpe nakopesa bino etumbu. \v 10 Bokokufa na mopanga, nakosambisa bino na bandelo ya mokili ya Isalaele, bongo bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. \v 11 Engumba oyo ekotikala te kozala nzungu mpo na bino, mpe bino bokotikala te kozala misuni kati na yango ; nakosambisa bino na bandelo ya mokili ya Isalaele. \v 12 Mpe bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, pamba te bolandaki te bikateli na Ngai mpe botosaki te mibeko na Ngai, kasi bolandaki nde bizaleli ya bikolo ya bapaya oyo bazingeli bino. » \p \v 13 Nzokande, wana nazalaki nanu kosakola, Pelatia, mwana mobali ya Benaya, akufaki. Nakweyaki, elongi na ngai kino na mabele, mpe nagangaki na mongongo makasi : « Oh Nkolo Yawe ! Okosilisa solo koboma penza ndambo ya bana ya Isalaele, oyo batikali na bomoi ? » \s1 Yawe alaki kosangisa lisusu Isalaele \p \v 14 Yawe alobaki na ngai : \p \v 15 « Mwana na moto, ezali epai ya bato na yo, bandeko na yo ya makila mpe ndako mobimba ya Isalaele nde bato ya Yelusalemi balobaki : ‹ Bozala mosika na Yawe ; mokili oyo epesamelaki biso lokola libula na biso. › \v 16 Yango wana, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako nabenganaki bango kati na bikolo mpe napanzaki bango kati na mabota, kasi nazalaki mpo na bango lokola ndako ya bule kati na bikolo epai wapi bakendeki. › \p \v 17 Mpo na yango, loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosangisa bino wuta na bikolo, nakozongisa bino wuta na mikili epai wapi napanzaki bino mpe nakozongisela bino lisusu mokili ya Isalaele. › \v 18 Bakozonga kuna mpe bakolongola bililingi na yango nyonso ya mbindo elongo na banzambe nyonso ya bikeko. \v 19 Nakopesa bango motema ya sika mpe nakotia kati na bango molimo ya sika ; nakolongola kati na bango motema ya libanga mpe nakopesa bango motema ya mosuni, \v 20 mpo ete balanda bikateli na Ngai mpe batosa mibeko na Ngai. Bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango. \v 21 Kasi mpo na bato oyo bapesa mitema na bango epai ya bililingi ya mbindo mpe banzambe ya bikeko mpo na kokoba kosalela yango, nakofuta bango kolanda misala na bango, elobi Nkolo Yawe. » \p \v 22 Na tango wana, basheribe bafungolaki mapapu na bango mpe bapine ekomaki kobaluka na mipanzi na bango ; boye nkembo na Nzambe ya Isalaele ezalaki na likolo na bango. \v 23 Nkembo na Yawe emataki na likolo longwa kati na engumba mpe ekendeki kotelema na likolo ya ngomba oyo ezalaki na este ya Yelusalemi. \v 24 Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kati na Babiloni epai ya bato oyo bakendeki na bowumbu. Makambo oyo ezalaki kosalema kati na emoniseli oyo Molimo ya Nzambe apesaki ngai. Mpe emoniseli oyo namonaki esilaki. \v 25 Bongo nayebisaki bato oyo bazalaki na bowumbu makambo nyonso oyo Yawe alakisaki ngai. \c 12 \s1 Bilembo ya bowumbu \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, ozali kovanda kati na libota ya batomboki ; bazalaka na miso ya kotala kasi bamonaka te, bazalaka na matoyi ya koyoka kasi bayokaka te, pamba te bazali libota ya batomboki. \v 3 Yango wana, mwana na moto, kangisa bisaka na yo lokola moto oyo azali kokende na bowumbu mpe kende na bowumbu na moyi makasi, na miso na bango. Telema na esika oyo ozali mpe kende na esika mosusu na miso na bango ; tango mosusu bakoki kososola, atako bazali libota ya batomboki. \v 4 Bimisa bisaka na yo na libanda, na moyi makasi na miso na bango ; mpe na pokwa, kende ndenge bato bakendaka na bowumbu na miso na bango. \v 5 Tobola mir na miso na bango mpe bimisa bisaka na yo na lidusu oyo okosala. \v 6 Tia yango na mapeka na yo na miso na bango, mpe kende na yango na butu. Bomba elongi na yo mpo ete okoka komona mokili te, pamba te nalingi ete ozala elembo mpo na libota ya Isalaele. » \p \v 7 Boye, nasalaki makambo oyo atindaki ngai : na moyi, nabimisaki bisaka na ngai lokola moto oyo azali kokende na bowumbu ; na pokwa, maboko na ngai etobolaki mir, bongo na butu, nabimisaki bisaka na ngai mpe natiaki yango na mapeka, na miso na bango. \p \v 8 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Yawe alobaki na ngai : \p \v 9 « Mwana na moto, libota ya batomboki ya Isalaele oyo, batunaki yo te : ‹ Ozali kosala nini ? › \v 10 Yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lisakoli oyo ezali na tina na mokambi oyo azali na Yelusalemi elongo na libota mobimba ya Isalaele, oyo bazali kuna. › \p \v 11 Loba na bango : ‹ Nazali elembo mpo na bino. › Ndenge Ngai nasali, ndenge wana mpe ekosalema epai na bango : bakokende na bowumbu lokola bakangami. \v 12 Mokambi oyo azali kati na bango akotia bisaka na ye na mapeka mpe akokima na butu ; bakotobola mir mpo na kobimisa ye na lidusu oyo bakosala. Akobomba elongi na ye mpo ete amona mokili te. \v 13 Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama penza na motambo yango ; nakomema ye na Babiloni, mokili ya bato ya Chalide ; kasi akomona yango te mpe akokufela kuna. \v 14 Nakopanza bato na ye, oyo atielaka motema na bisika nyonso : bakalaka mpe mampinga na ye ; mpe nakolanda bango na mopanga ya minu. \v 15 Bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopanza bango kati na bikolo mosusu mpe kati na mikili mosusu. \v 16 Kasi kati na bango, nakobikisa ndambo ya bato oyo bakokufa te na mopanga, na nzala makasi mpe na bokono oyo ebomaka, mpo ete batatola misala na bango nyonso ya mbindo kati na bikolo epai wapi bakokende. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. » \p \v 17 Yawe alobaki na ngai : \p \v 18 « Mwana na moto, zala na kolenga wana ozali kolia bilei mpe zala na pasi na motema mpe na komitungisa wana ozali komela mayi na yo ; \v 19 mpe loba na bato ya mokili oyo : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya bavandi ya Yelusalemi mpe ya mokili ya Isalaele : Bakolia bilei na bango na kobanga mpe bakomela mayi na bango na somo ; pamba te bakobotola na makasi biloko nyonso ya mokili na bango, likolo ya mabe nyonso ya bavandi na yango. \v 20 Bingumba oyo bato bavandaka ekobebisama mpe mokili ekotikala lisusu na bato te, mpe bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › » \p \v 21 Yawe alobaki na ngai : \p \v 22 « Mwana na moto, bolobaka lisese nini kati na mokili ya Isalaele : ‹ Mikolo ezali koleka mpe bimoniseli ezali kokokisama te ? › \v 23 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosukisa lisese oyo mpe nakosala ete balobaka yango lisusu te kati na Isalaele. › \p Loba na bango lisusu : ‹ Tango ekomi pene oyo bimoniseli nyonso ekokokisama. \v 24 Bimoniseli mpe masakoli ya lokuta ekozala lisusu te kati na bana ya Isalaele. \v 25 Kasi Ngai Yawe, nakoloba maloba oyo nalingi koloba, mpe maloba yango ekokokisama na mwa tango moke ; pamba te kaka na tango oyo bozali na bomoi, bino libota ya batomboki, Ngai nakokokisa maloba nyonso oyo nakoloba, elobi Nkolo Yawe. › » \p \v 26 Yawe alobaki na ngai : \p \v 27 « Mwana na moto, libota ya Isalaele bazali koloba : ‹ Emoniseli ya moto oyo ekosalema na yango lobi te mpe masakoli na ye ekokokisama sima na mibu ebele penza. › \v 28 Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Liloba na Ngai ata moko te ekowumela lisusu mpo na kokokisama. Maloba nyonso oyo nakoloba ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. › » \c 13 \s1 Nzambe asambisi basakoli ya lokuta \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, sakola mabe na tina na basakoli ya Isalaele, oyo bazali kosakola sik’oyo ; loba na ba-oyo bazali kosakola makambo oyo ezali kowuta na mitema na bango moko : ‹ Boyoka Liloba na Yawe ! \v 3 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na basakoli ya bazoba, oyo balandaka makanisi ya mitema na bango moko ! Nzokande bamonaki eloko moko te. \v 4 Oh Isalaele, basakoli na yo bazali lokola bambwa ya zamba kati na bisika oyo etonda na biloko ebeba. \v 5 Bomataki te na mir mpo na kobamba madusu mpe kozingela libota ya Isalaele na mir zingazinga mpo na kobatela yango na tango ya bitumba, na mokolo ya Yawe. \v 6 Bimoniseli na bango ezali ya pamba, mpe masakoli na bango ezali ya lokuta. Balobaka : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi, ’ nzokande Ngai Yawe, natindi bango te. Mpe bazelaka ete maloba na bango ekokisama ! \v 7 Boni, bimoniseli na bino ezalaka ya pamba te, mpe masakoli na bino ezalaka ya lokuta te, atako bolobaka : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi, ’ nzokande Ngai nalobi na bino ata liloba moko te ? \v 8 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mpo ete bolobaka masakoli ya pamba mpe bimoniseli ya lokuta, Ngai moko natelemeli bino, elobi Nkolo Yawe. \v 9 Loboko na Ngai ekobeta basakoli oyo balobaka masakoli ya pamba mpe bimoniseli ya lokuta : bakozala na esika te kati na lisanga ya bato na Ngai, bakombo na bango ekokomama te kati na buku ya libota ya Isalaele, bakokoma te kino na mokili ya Isalaele. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. \v 10 Boye, lokola bapengwisaka bato na Ngai tango balobaka : ‘ Kimia, ’ na tango kimia ezali te ; lokola bapakolaka potopoto ya pembe na mir oyo bato na Ngai basili kotonga, \v 11 yebisa bato oyo bapakolaka yango potopoto ya pembe ete mir ekokweya. Nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, bongo mipepe makasi ekotomboka. \v 12 Tango mir yango ekokweya, bato bakotuna bino : ‘ Mosala nini penza potopoto ya pembe esali ? ’ \p \v 13 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotinda mopepe moko ya makasi, kati na kanda na Ngai, mpe nakonokisa mvula moko ya makasi mpe ya mabanga, kati na kotomboka na Ngai, mpo na kobebisa nyonso nye. \v 14 Nakokweyisa mir oyo bopakolaki potopoto ya pembe mpe nakolalisa yango kino na se, mpo ete miboko na yango emonana. Tango mir yango ekokweya, ekoboma bino ; mpe na bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. \v 15 Nakokweyisela mir mpe bato oyo bapakolaki yango potopoto ya pembe kanda na Ngai ; nakoloba na bino : ‘ Mir ezali lisusu te ! Bato oyo bazalaki kopakola yango potopoto ya pembe bazali lisusu te ; \v 16 basakoli ya Isalaele oyo bazalaki kosakola na tina na Yelusalemi mpe komona bimoniseli ya kimia mpo na yango, nzokande kimia ezali na yango te, bazali lisusu te, elobi Nkolo Yawe. ’ › \p \v 17 Boye, yo, mwana na moto, tala mpe telemela bilenge basi ya Isalaele, oyo bazali kosakola kolanda makanisi ya mitema na bango moko ! Sakola mabe na tina na bango \v 18 mpe loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na basi oyo balataka basinga ya maji na maboko na bango mpe batongaka bitambala mpo na mito ya bato ya ndenge na ndenge mpo na kotiela bomoi na bango mitambo ! Bokanisi ete bokotiela bomoi ya bato na Ngai mitambo mpo ete botikala bino moko kaka na bomoi ? \v 19 Bozali kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai liboso ya bato na Ngai mpo na ndambo ya mbuma ya orje mpe ndambo ya mapa ! Tango bozali kokosa bato na Ngai, oyo bazali koyoka makambo ya lokuta, bozali nde koboma bato oyo basengelaki kokufa te, mpe kotika na bomoi bato oyo basengelaki te kozala na bomoi. \p \v 20 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natelemeli basinga na bino ya maji, oyo bozali kosalela mpo na kotiela bato na Ngai mitambo lokola bandeke, nakokata-kata yango mpe nakolongola yango na maboko na bino ; mpe nakokangola bomoi ya bato oyo bokangaki na mitambo lokola bandeke. \v 21 Nakopasola bitambala na bino mpe nakokangola bato na Ngai na maboko na bino ; bakokweya lisusu te na se ya bokonzi na bino ! Mpe na bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. \v 22 Lokola bozali kolembisa mitema ya bato ya sembo na nzela ya lokuta na bino, nzokande Ngai moko nalembisaki bango mitema te ; lokola bozali kolendisa bato mabe ete bakangama na etamboli na bango ya mabe mpo ete babikisa bomoi na bango te, \v 23 bokomona lisusu te bimoniseli na bino wana ya pamba mpe bokoloba lisusu masakoli te ; nakobikisa bato na Ngai na maboko na bino, mpe, na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › » \c 14 \s1 Kosambisama ya basambeli ya banzambe ya bikeko \p \v 1 Kati na bakambi ya Isalaele, ndambo bayaki epai na ngai mpe bavandaki liboso na ngai. \v 2 Bongo Yawe alobaki na ngai : \p \v 3 « Mwana na moto, bato oyo bazali kotia mitema epai ya banzambe ya bikeko. Bongo lokola bazali kotia banzambe ya bikeko liboso na bango, ekobetisa bango mabaku oyo ekokweyisa bango na masumu. Boni, natikela bango lisusu nzela ya kotuna Ngai toli ? \v 4 Mpo na yango, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Soki moto ya Isalaele atie motema epai ya banzambe ya bikeko oyo ekobetisa ye mabaku mpe ekokweyisa ye na masumu, bongo atie yango liboso na ye mpe akei epai ya mosakoli, Ngai moko Yawe nde nakoyanola ye kolanda motango ya banzambe na ye ya bikeko. \v 5 Nakosala bongo mpo na kozongisa lisusu epai na Ngai, mitema ya bana ya Isalaele oyo batikaki Ngai mpo na kolanda banzambe ya bikeko. › \p \v 6 Yango wana, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Bobongola mitema ! Bopesa banzambe na bino ya bikeko mikongo mpe botika misala na bino ya mbindo ! \v 7 Soki moto moko ya Isalaele to mopaya nyonso oyo avandi kati na Isalaele akabwani na Ngai, atie motema na ye na banzambe ya bikeko mpe atie liboso na ye banzambe yango ya bikeko oyo ekobetisa ye mabaku mpe ekokweyisa ye na masumu, bongo akei epai ya mosakoli mpo na kotuna Ngai toli na nzela na ye, Ngai moko Yawe nde nakoyanola ye. \v 8 Nakotombokela moto wana, nakokomisa ye elembo mpe lisese epai na bato mpe nakolongola ye na molongo ya bato na Ngai. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai nazali Yawe. \p \v 9 Soki mosakoli moko akosami mpe asakoli makambo, ezali Ngai moko Yawe nde napengwisi ye. Boye, nakosembola loboko na Ngai mpo na kopesa ye etumbu, mpe nakobeta ye kati na bato na Ngai, Isalaele. \v 10 Bango mibale, mosakoli yango mpe moto oyo akei kotuna ye toli, bakomema mikumba ya masumu na bango. \v 11 Na bongo, bato ya Isalaele bakokabwana na Ngai lisusu te mpe bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya masumu na bango ; kasi bakozala bato na Ngai, mpe Ngai, nakozala Nzambe na bango, elobi Nkolo Yawe. › » \s1 Nzambe asambisi Yelusalemi \p \v 12 Yawe alobaki na ngai : \p \v 13 « Mwana na moto, soki bato ya ekolo moko basali masumu liboso na Ngai mpe batamboli na boyengebene te, bongo Ngai nasemboli loboko na Ngai mpo na kopimela bango bilei mpe kotindela bango nzala makasi mpo ete ezala bato to banyama bakufa, \v 14 ata soki bato misato oyo, ‹ Noa, Daniele mpe Yobo, › bazalaki kati na bavandi ya ekolo yango, bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango, elobi Nkolo Yawe. \v 15 To soki natindi banyama mabe kati na ekolo yango mpo ete eboma bavandi na yango, mpe mpo ete ekolo yango etikala lisusu na bato te mpe bato balekela lisusu wana te mpo na banyama mabe yango ; \v 16 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki bato oyo misato bazalaki kuna, balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali mpe ya basi ; bango misato kaka nde balingaki kobika, kasi ekolo elingaki kotikala lisusu na bato te. \v 17 To soki natindi mopanga ete eboma bato ya ekolo wana mpe nalobi : ‹ Tika ete mopanga eleka na mokili mobimba ! › Soki nabomi bato mpe bibwele na yango ; \v 18 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki bato oyo misato bazalaki kuna, balingaki kokoka te kobikisa bana na bango ya mibali mpe ya basi ; bango misato kaka nde balingaki kobika. \v 19 To soki natindi kati na mokili yango bokono oyo ebomaka mpe nasopeli yango kanda na Ngai mpo na kosopa makila, koboma bato mpe bibwele ya mokili yango ; \v 20 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, ata soki Noa, Daniele mpe Yobo bazalaki kati na bavandi na yango, balingaki kokoka te kobikisa ata mwana moko ya mobali to ya mwasi ; bango misato kaka nde balingaki kobika mpo na bosembo na bango. \p \v 21 Kasi tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Atako natindeli Yelusalemi bitumbu na Ngai oyo minei ya somo : mopanga, nzala makasi, banyama mabe mpe bokono oyo ebomaka, mpo na kosilisa koboma bato mpe bibwele na yango, \v 22 ekozala na ndambo ya bato oyo bakobika : bana mibali mpe ya basi. Bakoya epai na bino ; mpe tango bokomona bizaleli mpe misala na bango, bokobondisama mpo na pasi oyo natindelaki Yelusalemi, mpo na bitumbu nyonso oyo natindelaki yango. \v 23 Solo, bokobondisama tango bokomona bizaleli mpe misala na bango ; pamba te bokososola ete ezali na pamba te nde nasalaki makambo oyo nyonso kati na Yelusalemi, elobi Nkolo Yawe. » \c 15 \s1 Lisese ya nzete ya vino \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, nzete ya vino eleki banzete mosusu na nini ? Bitape na yango eleki bitape ya banzete mosusu ya zamba na nini ? \v 3 Bakoki solo kobimisa libaya na nzete ya vino mpe kosalela yango eloko ya tina penza ? Bakoki solo kosalela yango bisimbelo ya kotiela biloko likolo ? \v 4 Sima na kobwaka yango na moto, moto ezikisaka basonge mpe kati na yango ; boye ndenge nini bakoki kosalela yango penza eloko ya malonga ? \v 5 Soki kutu bakoki kosalela yango eloko ya malonga te tango ezali nanu mobimba, bongo ndenge nini bakoki kosalela yango eloko ya malonga tango moto esili kozikisa mpe kotumba yango ? \v 6 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ndenge nabwakaka na moto nzete ya vino kati na banzete mosusu ya zamba, ndenge wana mpe nakosala bavandi ya Yelusalemi. \v 7 Nakotelemela bango penza ; ezala babimi na moto, moto mosusu ekotumba bango. Na bongo, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakopesa bango etumbu : \v 8 Nakosala ete mokili na bango etikala lisusu na bato te mpo ete batambolaki na boyengebene te, basalaki makambo ya nkele elobi Nkolo Yawe. » \c 16 \s1 Lisolo ya masumu ya Yelusalemi \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, lakisa Yelusalemi misala na ye ya mbindo ! \v 3 Yebisa ye boye : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi epai ya Yelusalemi : Bokoko mpe mbotama na yo etalisaka ete ozali moto ya Kanana ; tata na yo azalaki moto ya Amori, mpe mama na yo azalaki moto ya Iti. \v 4 Na mokolo ya mbotama na yo, bakataki yo motolu te, basukolaki yo na mayi te mpo ete okoma peto, batikalaki kopakola yo mungwa te mpe bazipaki yo bilamba te. \v 5 Moto moko te ayokelaki yo mawa mpo na kosalela yo ata moko kati na makambo wana. Nzokande, na mokolo ya mbotama na yo, bayinaki yo mpe babwakaki yo na zamba mpo ete bazalaki na somo makasi ya komona yo. \p \v 6 Boye, Ngai nalekelaki wana mpe namonaki ndenge nini ozalaki kobunda-bunda na kufa kati na makila. Bongo nalobaki na yo : ‘ Okozala na bomoi atako ozali kobaluka na makila ! ’ \v 7 Nakolisaki yo lokola nzete ya elanga. Bongo tango okolaki penza mpe oyaki monene, okomaki kitoko makasi koleka ; tolo na yo ebimisaki mabele, mpe bapwale na yo ekolaki. Kasi ozalaki na yo kaka bolumbu tango nyonso, ozalaki na bilamba te. \p \v 8 Sima na mikolo, tango nalekelaki lisusu wana mpe namonaki yo, nasosolaki ete okokisi mibu ya libala. Nakamataki elamba na Ngai mpe nazipaki bolumbu na yo ; nalapaki ndayi ete nakosala boyokani ya libela elongo na yo, elobi Nkolo Yawe. Mpe na bongo, okomaki ya Ngai. \p \v 9 Nasukolaki yo na mayi mpo na kolongola makila oyo ekangamaki yo na nzoto, mpe napakolaki yo mafuta ya solo kitoko. \v 10 Nalatisaki yo elamba ya talo batonga bililingi na basinga mpe basapato ya kitoko oyo basala na baposo ya banyama ; nalatisaki yo bilamba ya lino ya kitoko mpe nazipaki yo bilamba ya talo. \v 11 Nalatisaki yo babiju, mayaka na maboko mpe na kingo. \v 12 Nalatisaki yo lopete na zolo, biloko ya matoyi mpe motole ya kitoko na moto. \v 13 Boye, olataki biloko ya wolo mpe ya palata ; bilamba na yo ezalaki ya lino ya kitoko, bilamba ya talo batonga bililingi na basinga. Bilei na yo ezalaki : farine ya ble basangisa na eloko mosusu te, mafuta ya nzoyi mpe mafuta ya olive. Okomaki lisusu kitoko koleka, ozwaki lokumu makasi mpe okomaki lokola mwasi mokonzi. \p \v 14 Mpo ete kitoko na yo ekomaki ya kokoka, sango na yo epanzanaki kati na bikolo, likolo ya lokumu oyo napesaki yo, elobi Nkolo Yawe. \b \p \v 15 Kasi okomaki kotia motema na kitoko na yo mpe kosalela lokumu na yo mpo na kosala kindumba. Olakisaki bolumbu na yo na moleki nzela nyonso mpe omipesaki na ye. \v 16 Okamataki bilamba na yo mosusu, otongaki yango mpo na kobongisa bisambelo na yo ya likolo ya bangomba, epai wapi osalaki kindumba na yo. Likambo ya bongo etikala nanu kosalema te mpe ekotikala kosalema lisusu te ! \v 17 Okamataki lisusu babiju ya kitoko oyo basala na wolo mpe na palata oyo napesaki yo, osalelaki yango bikeko ya mibali ; mpe elongo na yango, omipesaki na kindumba. \v 18 Okamataki bilamba na yo ya talo batonga bililingi na basinga, olatisaki yango bikeko wana mpe obonzelaki yango mafuta mpe ansa na Ngai. \v 19 Bilei oyo Ngai nabongiselaki yo : farine ya ble, mafuta ya nzoyi mpe mafuta ya olive, oyo napesaki yo mpo ete oliaka, obonzaki yango epai ya bikeko wana lokola mbeka ya solo kitoko. Yango nde makambo oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. \v 20 Okamataki lisusu bana basi mpe bana mibali oyo obotelaki Ngai, obonzaki bango lisusu lokola bilei epai ya banzambe wana ya bikeko mpo ete elia bango. Boni, kindumba na yo ekokaki kaka te ? \v 21 Esengelaki solo ete oboma bana na Ngai mpo na kobonza bango lokola makabo epai ya banzambe wana ya bikeko, na kolekisa bango na moto ! \v 22 Mpe wana ozalaki kosala makambo na yo nyonso ya nkele mpe kindumba na yo, okanisaki ata moke te bolenge na yo : tango oyo ozalaki bolumbu mpe ozalaki kobunda-bunda kati na makila na yo. \p \v 23 Mawa ! Mawa penza mpo na yo, elobi Nkolo Yawe ; sima na yo kosala mabe wana nyonso, \v 24 omitongelaki mwa ndako mpo na kosala kindumba mpe obongisaki mpo na yo moko, bisika ya bule na bisika nyonso oyo bato bakutanaka ; \v 25 otongaki yango na bisika nyonso oyo babalabala ekutana, okomisaki kitoko na yo likambo ya nkele mpe omipesaki epai ya moleki nzela nyonso : osalaki penza kindumba makasi. \v 26 Osalaki kindumba na bato ya Ejipito, baninga na yo, oyo bazali na banzoto ya bingambe ; mpe osalaki kindumba makasi mpo na kopesa Ngai kanda. \p \v 27 Natombokelaki yo, nabotolaki yo bilei oyo napesaki yo mpe nakabaki yo na maboko ya banguna na yo, bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki mpe kosepela ata moke te na bizaleli na yo ya soni mpe ya mabe. \p \v 28 Lokola otondaka te, osalaki lisusu kindumba na bato ya Asiri ; mpe, ata sima na yango, otondaki mpe kaka te. \v 29 Ezala kati na Kanana\f + \fr 16.29 \fr*\ft Kanana elingi koloba : mombongo\ft*\f*, pembeni ya Babiloni, okobaki kaka kosala kindumba ; kasi atako bongo, otondaki kaka te. \v 30 Yango motema ya pete ya ndenge nini penza yo ozali na yango, elobi Nkolo Yawe, mpo ete osala makambo oyo nyonso, lokola mwasi ya ndumba oyo akenda sango na mosala na ye ya kindumba ! \p \v 31 Tango ozalaki kotonga mwa bandako ya kindumba na bisika nyonso oyo babalabala ekutana mpe kobongisa bisika ya bule na bisika nyonso oyo bato bakutanaka, ozalaki kosala lokola mwasi ya ndumba nyonso te, pamba te ozalaki kosenga lifuti te. \v 32 Yo ozali penza mwasi ya ekobo ; osepelaka kosangisa nzoto na bapaya, kasi na mobali na yo te. \v 33 Basi nyonso oyo basalaka kindumba basengaka lifuti ; kasi epai na yo, ezali yo nde opesaka bakado epai ya bamakangu na yo nyonso : na bongo, osombaka mitema na bango mpo ete bawuta bipai na bipai mpe baya kosala ekobo na yo. \v 34 Yo, okeseni penza na basi mosusu na kindumba na yo, pamba te mibali balukaka yo te ! Yo penza, okeseni na basi mosusu ya ndumba, pamba te ofutaka mibali na esika ete bango bafuta yo. \p \v 35 Yango wana, yo mwasi ya ndumba, yoka Liloba na Yawe ! \v 36 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola osakanelaki bomengo na yo mpe otandaki bolumbu na yo kati na kindumba na bamakangu na yo mpe na banzambe na yo nyonso ya bikeko, makambo na yo nyonso ya mbindo ; mpe lokola obonzelaki banzambe wana ya bikeko makila ya bana na yo ya mibali, \v 37 nazali kosangisa bamakangu na yo nyonso oyo ozalaki kosepela elongo na bango, ba-oyo nyonso ozalaki kolinga mpe ba-oyo nyonso ozalaki koyina ; nakosangisa bango wuta na bangambo nyonso mpo ete batombokela yo, mpe nakotanda yo liboso na bango mpo ete bamona bolumbu na yo nyonso. \v 38 Nakopesa yo etumbu oyo ebongi na basi ya ndumba mpe na ba-oyo basopaka makila. Okofuta yango na motuya ya makila na yo, mpo na kanda mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisi. \v 39 Nakokaba yo na maboko ya bamakangu na yo, bakobuka mwa bandako na yo ya kindumba mpe bisika na yo ya bule ; bakolongola yo na makasi bilamba mpe babiju ya kitoko mpe bakotika yo bolumbu. \v 40 Nakotindela yo bato ebele mpo ete babamba yo mabanga mpe batobola yo na mipanga na bango. \v 41 Bakotumba bandako na yo mpe bakopesa yo etumbu na miso ya basi ebele. Nakosukisa kindumba na yo, mpe okofuta lisusu bamakangu na yo te. \v 42 Na bongo nde kanda na Ngai epai na yo mpe zuwa ya bolingo na Ngai oyo osambwisaki ekosila ; nakovanda kimia mpe nakosilika lisusu te. \v 43 Lokola obosanaki mikolo ya bolenge na yo mpe opelisaki kanda na Ngai na nzela ya makambo nyonso ya boye, Ngai mpe nakofuta yo kolanda ndenge etamboli na yo ezali, elobi Nkolo Yawe ; boye, okobakisa lisusu makambo mabe te na likolo ya makambo na yo ya mbindo. \p \v 44 Moto nyonso oyo alobaka na masese akoloba lisese oyo na tina na yo : ‘ Mwana mwasi azalaka kaka ndenge mama na ye azali. ’ \v 45 Ozali solo mwana mwasi ya mama na yo, oyo asambwisaki mobali na ye mpe bana na ye ya mibali ; ozali solo ndeko mwasi ya bandeko na yo ya basi oyo batiolaki mibali mpe bana na bango. Mama na bino azalaki moto ya mokili ya Iti, mpe tata na yo azalaki moto ya Amori. \v 46 Kulutu na yo ya mwasi, ezali Samari oyo avandi na ngambo ya nor ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi ; leki na yo ya mwasi ezali Sodome oyo avandi na ngambo ya sude ya mokili na yo elongo na bana na ye ya basi. \p \v 47 Otambolaki kaka te na banzela na bango mpe olandaki kaka te bizaleli na bango ya mbindo, kasi okomaki mabe koleka bango, na etamboli na yo nyonso. \v 48 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, Sodome, ndeko na yo ya mwasi, elongo na bana na ye ya basi batikala nanu kosala te makambo oyo yo elongo na bana na yo ya basi bosali. \v 49 Tala sik’oyo masumu ya Sodome, ndeko na yo ya mwasi : ye elongo na bana na ye ya basi bazalaki bato ya lolendo, mpo ete batondaki na bomengo mpe eloko moko te ezalaki kotungisa bango ; basungaki ata moke te babola mpe bato bakelela. \v 50 Bakomaki bato ya lofundu makasi mpe bakomaki kosala makambo ya mbindo na miso na Ngai. Yango wana, nalimwisi bango ndenge ozali komona. \v 51 Samari asalaki te ata kati-kati ya masumu oyo yo osalaki. Osalaki makambo ya mbindo koleka bango ; mpe na nzela ya makambo na yo nyonso ya mbindo, osalaki ete bandeko na yo ya basi bamonana lokola bato ya sembo koleka. \p \v 52 Sik’oyo, yo oyo ozalaki kosambisa bandeko na yo ya basi, lata soni na yo ! Lokola masumu na yo ezalaki kutu mabe koleka oyo ya bango, yango wana bazalaki komonana lokola bato ya sembo koleka. Yoka sik’oyo soni mpo ete osili kosambwa, omonisi bandeko na yo ya basi lokola bato ya sembo koleka ! \v 53 Yango wana, nakozongisa lisusu bolamu ya Sodome mpe ya Samari, elongo na bingumba na yango ; mpe yo, nakozongisa bolamu na yo kati na yango \v 54 mpo ete oyoka lisusu soni te mpe osambwa lisusu te likolo ya misala na yo mpe likolo ya makambo oyo ezalaki kobondisa bango. \v 55 Sodome mpe Samari elongo na bingumba na yango ekozonga ndenge ezalaki liboso ; mpe yo elongo na bingumba na yo, nakozongisa bino ndenge bozalaki liboso. \v 56 Na mokolo ya lolendo na yo, ozalaki kutu kolobela mabe ya Sodome, ndeko na yo, \v 57 liboso ete mabe na yo eyebana. Kasi sik’oyo, bingumba ya Siri elongo na bingumba nyonso oyo ezali zingazinga na yango mpe bingumba ya bato ya Filisitia ekomi koseka yo. \v 58 Okomi sik’oyo komema mikumba ya makambo na yo ya mbindo mpe ya misala na yo ya mabe, elobi Yawe. \b \p \v 59 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosalela yo kolanda misala na yo, pamba te otiolaki ndayi na Ngai na nzela ya kobuka boyokani na Ngai elongo na yo. \v 60 Kasi Ngai, nakokanisa lisusu boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na yo tango ozalaki nanu elenge, mpe nakosala lisusu mpo na yo, boyokani oyo ekozala na suka te. \v 61 Boye, okokanisa etamboli na yo mpe okoyoka soni tango okoyamba bandeko na yo ya basi, ezala ba-oyo bazali mikolo na yo to ba-oyo bazali baleki na yo ; nakopesa yo bango lokola bana na yo ya basi, kasi ekozala te kolanda boyokani na Ngai elongo na yo. \v 62 Ngai nakosala boyokani na Ngai elongo na yo ; mpe na bongo, okososola solo ete Ngai, nazali Yawe, \v 63 mpo ete okanisa yango lisusu, oyokela yango soni mpe ofungola lisusu monoko na yo te mpo na soni, tango nakolimbisa masumu na yo mpo na mabe nyonso oyo osalaki, elobi Nkolo Yawe. › » \c 17 \s1 Lisese ya bampongo mpe nzete ya vino \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, bongisa sambole moko mpe loba yango lokola lisese epai ya libota ya Isalaele. \v 3 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q1 Mpongo moko ya monene \q2 oyo ezalaki na mapapu milayi soki efungwami, \q1 na basala ebele ya balangi ya ndenge na ndenge, \q2 ekendeki kotelema na Libani. \q2 Tango etutaki songe ya nzete moko ya sedele, \q1 \v 4 ebukaki etape moko ya moke \q2 oyo ezalaki na songe ya nzete yango \q1 mpe ememaki yango na mokili ya bato ya mombongo, \q2 epai wapi elonaki yango kati na engumba ya bateki. \q1 \v 5 Ekamataki ndambo ya milona ya mokili wana, \q2 ekendeki kolona yango na mabele ya malamu, \q2 lokola nzete oyo elingaka esika ya mayi, pene ya mayi. \q1 \v 6 Nkona yango ekolaki mpe ekomaki nzete ya vino ; \q2 ezalaki penza mokuse, \q1 kasi bitape na yango ezalaki efungwama \q2 mpe etala na ngambo ya mpongo. \q1 Bongo misisa na yango ezalaki kaka \q2 etikala na se na yango. \q1 Ekomaki nzete ya vino, \q2 ebotaki bitape mpe ebimisaki makasa ebele. \q1 \v 7 Kasi ezalaki lisusu na mpongo mosusu ya monene \q2 oyo ezalaki na mapapu ya milayi mpe basala ebele. \q1 Nzokande, nzete ya vino wana ebimisaki \q2 misisa na yango na ngambo ya mpongo wana, \q1 longwa na esika oyo balonelaki yango \q2 mpe epanzaki bitape na yango kino epai na mpongo wana, \q2 mpo na kosopela yango mayi. \q1 \v 8 Balonaki yango na mabele ya malamu, \q2 lokola nzete oyo elingaka esika ya mayi, \q1 pene ya mayi ebele mpo ete ebota bitape mpe bambuma, \q2 mpe ekoma nzete monene ya vino. › \s1 Ndimbola ya lisese \p \v 9 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q1 Boni, ekokoma solo monene ? \q2 Boni, mpongo ya liboso ekopikola yango te \q1 mpo ete ezanga kobota mbuma mpe ekawuka ? \q2 Makasa na yango nyonso ya sika ekokawuka ; \q1 ekoluka na yango makasi mingi te \q2 mpe bato ebele te mpo na kopikola yango. \q1 \v 10 Ata soki bakei kolona yango esika mosusu, \q2 okanisi ete ekokola ? \q1 Ekokawuka nyonso tango mopepe ya este \q2 ekoya kobeta yango ; \q2 solo ekokawuka ata na esika oyo ezalaki kokola malamu. › » \p \v 11 Bongo Yawe alobaki na ngai : \p \v 12 « Loba na ndako ya batomboki oyo : ‹ Boni, bozali solo koyeba soki makambo oyo elakisi nini ? › Loba na bango : ‹ Mokonzi ya Babiloni ayaki na Yelusalemi, akangaki mokonzi elongo na bakalaka na yango mpe amemaki bango na mokili na ye, elingi koloba na Babiloni. \v 13 Akamataki moko kati na libota ya bokonzi, asalaki boyokani elongo na ye mpe alapisaki ye ndayi ; mpe amemaki lisusu bankumu ya mokili \v 14 mpo ete bokonzi ekweya, ekoka lisusu kotelema te mpe ewumela kobika kaka na kobatela mibeko ya boyokani na ye. \v 15 Kasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni mpe atindaki bantoma na ye, na Ejipito mpo ete bapesa ye bampunda mpe basoda ebele. Akolonga solo ? Moto oyo azali kosala makambo ya boye akobika solo ? Boni, abuka solo boyokani mpe abika ? \p \v 16 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, akokufa kati na Babiloni, kati mokili ya mokonzi oyo atiaki ye na bokonzi ; pamba te atosaki te ndayi oyo alapaki liboso na ye mpe abukaki boyokani oyo asalaki elongo na ye. \v 17 Faraon elongo na ebele ya basoda na ye ya mpiko mpe basoda na ye mosusu ebele bakokoka kosunga ye te na tango ya bitumba ; tango bato ya Babiloni bakotonga bamir ya zelo mpo na kobatamela mpe bakotimola mabulu mpo na koboma bato ebele. \v 18 Atosaki te ndayi oyo alapaki mpe abukaki boyokani. Lokola atombolaki loboko na ye na ndayi mpe asali makambo ya boye, akobika te ! \p \v 19 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na Kombo na Ngai, nakomemisa ye ngambo ya ndayi na Ngai, oyo atioli mpe ya boyokani na Ngai, oyo abuki. \v 20 Nakotiela ye motambo na Ngai, mpe akokangama na motambo na Ngai ; nakomema ye na Babiloni mpe nakosambisa ye kuna, pamba te atambolaki na boyengebene te liboso na Ngai. \v 21 Basoda na ye nyonso ya mpiko bakokufa na mopanga mpe bato oyo bakotikala na bomoi bakopanzana bisika nyonso. Na bongo, bokoyeba solo ete ezali Ngai Yawe nde nalobaki. \p \v 22 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ngai moko nakokamata etape ya songe ya nzete ya sedele mpe nakolona yango ; nakobuka na songe ya etape yango moto ya nzete moko, oyo nakolona na likolo ya ngomba oyo eleki molayi. \v 23 Nakolona yango na likolo ya ngomba ya Isalaele oyo eleki molayi ; ekopanza bitape na yango mpe ekobota bambuma, ekokoma nzete ya sedele moko ya kitoko ; bandeke ya ndenge na ndenge ekotonga bazala na yango kuna mpe ekopema na se ya pio ya bitape na yango. \p \v 24 Banzete nyonso ya zamba ekoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakweyisaka nzete ya molayi mpe nakomisaka nzete ya mokuse molayi, nakawusaka nzete ya mobesu mpe nakomisaka nzete ya kokawuka nzete ya mobesu. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakosala oyo nalobi. › » \c 18 \s1 Moto oyo asalaka masumu akokufa \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Bino bato, mpo na nini kati na mokili ya Isalaele bolobaka lisese oyo : ‹ Batata basili kolia bambuma ya vino ya mibesu, kasi minu ya bana nde ekomi ngayi ; elakisi nini ? › \v 3 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, bokotikala lisusu koloba lisese oyo kati na Isalaele te. \v 4 Pamba te bato nyonso ya bomoi bazali ya Ngai, ezala tata to mwana, bango mibale bazali ya Ngai ; moto oyo akosala masumu, ye moko nde akokufa. \p \v 5 Tozwa ndakisa ya moto moko oyo asalaka makambo ya sembo mpe ya alima, \v 6 aliaka te bilei na bisika ya bule ya likolo ya bangomba, atalelaka banzambe ya bikeko ya libota ya Isalaele te, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye, asangisaka nzoto te na mwasi oyo azali komona sanza na ye, \v 7 anyokolaka moto te, azongisaka eloko oyo akangaki na niongo epai ya mokolo na yango, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala mpe alatisaka moto oyo azali bolumbu ; \v 8 adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka loboko na ye mpo ete esala mabe te, akataka makambo ya bato mibale na bosembo ; \v 9 atosaka bikateli na Ngai mpe abatelaka mibeko na Ngai na bosembo : moto ya lolenge wana nde azali sembo ; akozala solo na bomoi, elobi Nkolo Yawe. \p \v 10 Kasi soki, ndakisa, moto yango azali na mwana moko ya mobulu, oyo asopaka makila ya bato to asalaka makambo ya ndenge wana, \v 11 atako tata na ye asalaki yango te, mwana oyo aliaka na bisika ya bule na likolo ya bangomba, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye, \v 12 anyokolaka mobola mpe moto oyo akelela, ayibaka, azongisaka te eloko oyo akangi na niongo epai ya mokolo na yango, atalelaka banzambe ya bikeko, asalaka makambo ya mbindo, \v 13 adefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo ; boni, mwana ya lolenge oyo akoki solo kozala na bomoi ? Te, akozala na bomoi te ! Mpo ete asalaki makambo wana nyonso ya mbindo, basengeli koboma ye, mpe makila na ye ekotangama na moto na ye moko ! \p \v 14 Kasi soki, ndakisa, mwana yango azali na mwana oyo, atako amonaka masumu nyonso oyo tata na ye asalaka, kasi asalaka ndenge moko te na tata na ye : \v 15 aliaka te bilei na bisika ya bule na likolo ya bangomba mpe atalelaka te banzambe ya bikeko ya libota ya Isalaele, akomisaka mbindo te mwasi ya moninga na ye, \v 16 anyokolaka moto te, akangaka eloko ya moto te soki adefisi ye niongo, ayibaka te kasi apesaka bilei na ye epai ya moto oyo azali na nzala, alatisaka moto oyo azali bolumbu, \v 17 abatelaka loboko na ye mpo ete esala masumu te, adefisaka te mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, abatelaka mibeko mpe atosaka bikateli na Ngai ; solo, mwana wana akokufa te mpo na masumu ya tata na ye : akozala solo na bomoi. \v 18 Ezali tata na ye nde akokufa mpo na masumu na ye moko, pamba te abotolaki bato biloko na makasi, ayibaki ndeko na ye mpe asalaki mabe kati na bato na ye. \p \v 19 Bozali koloba : ‹ Mpo na nini mwana amema te ngambo ya bambeba ya tata na ye ? › Ezali mpo ete mwana asalaki makambo ya sembo mpe ya alima, abatelaki mpe asalelaki na bokebi bikateli na Ngai nyonso, akozala solo na bomoi. \v 20 Moto oyo asali masumu, ye moko nde akokufa. Mwana akomema ngambo ya tata na ye te, mpe tata akomema ngambo ya mwana na ye te. Moto ya sembo akozwa litomba mpo na bosembo na ye, mpe moto mabe akozwa etumbu mpo na mabe na ye. \p \v 21 Kasi soki moto mabe atiki masumu na ye nyonso, soki akomi kotosa bikateli na Ngai nyonso mpe kotambola kolanda bosembo mpe makambo ya alima, akozala solo na bomoi, akokufa te. \v 22 Mabe moko te oyo asalaki ekotangama lisusu na moto na ye ; akozala solo na bomoi mpo na makambo ya sembo oyo azali kosala. \v 23 Boni, bokanisi penza ete Ngai nasepelaka solo na kufa ya bato mabe, elobi Nkolo Yawe, to nasepelaka te tango batikaka banzela na bango ya mabe mpo ete bazala na bomoi ? \p \v 24 Kasi soki moto ya sembo atiki bosembo na ye mpe akomi kosala masumu, soki amipesi na makambo nyonso ya mbindo oyo moto mabe asalaka, bokanisi ete akozala solo na bomoi ? Bakokanisa lisusu ata te makambo nyonso ya bosembo oyo asalaki. Akokufa solo mpo na bozangi boyengebene na ye mpe mpo na mabe na ye oyo asalaki. \p \v 25 Bozali koloba : ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, boyoka ! Boni, nzela na Ngai ezali sembo te ? Ezali banzela na bino te nde ezangi bosembo ! \v 26 Soki moto ya sembo atiki bosembo na ye, asali masumu mpe akufi mpo na yango, akufi nde mpo na masumu oyo asali. \v 27 Kasi soki moto mabe atiki mabe na ye oyo azalaki kosala mpe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima, abikisi solo bomoi na ye. \v 28 Lokola asosoli mabe na ye nyonso oyo azalaki kosala mpe atiki yango, akozala solo na bomoi, akokufa te. \p \v 29 Libota ya Isalaele ezali koloba : ‹ Nzela ya Nkolo ezali sembo te. › Oh libota ya Isalaele, nzela na Ngai ezali sembo te ? Boni, ezali te penza banzela na bino nde ezangi bosembo ? \p \v 30 Mpo na yango, oh libota ya Isalaele, nakosambisa bino, moto na moto kolanda misala na ye, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana, botika mabe na bino nyonso mpo ete masumu na bino emema bino na kobebisama te ! \v 31 Botika mabe na bino nyonso oyo bozalaki kosala ; bozwa mitema ya sika mpe molimo ya sika. Mpo na nini bokolinga kokufa, oh libota ya Isalaele ? \v 32 Solo, Ngai nasepelaka na kufa ya moto moko te, elobi Nkolo Yawe. Bobongwana mpe bozala na bomoi ! » \c 19 \s1 Loyembo ya mawa mpo na bakonzi ya Isalaele \p \v 1 « Bongo yo, tinda nzembo ya mawa mpo na bakambi ya Isalaele mpe loba : \q1 \v 2 ‹ Mama na yo azalaki nani ? \q2 Nkosi ya mwasi kati na bankosi ! \q1 Ezalaki kovanda kati na bana na yango \q2 mpe kobokola bana yango. \q1 \v 3 Ekolisaki moko kati na bana na yango, \q2 mpe mwana yango ekomaki nkosi moko ya makasi. \q2 Bongo, eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato. \q1 \v 4 Bato ya bikolo ya bapaya bayokaki sango na yango \q2 mpe bakangaki yango na mitambo ya mabulu ; \q1 bakangaki yango bibende na zolo \q2 mpe bamemaki yango na mokili ya Ejipito. \b \q1 \v 5 Tango mama ya nkosi yango emonaki \q2 ete elekisi tango ya pamba mpo na kozela \q1 mpe elikya na yango esili, \q2 ekamataki mwana mosusu kati na bana na yango, \q2 ekomisaki yango mpe nkosi ya makasi. \q1 \v 6 Ekomaki konguluma kati na bankosi, \q2 pamba te yango mpe ekomaki nkosi ya makasi. \q2 Eyekolaki kopasola banyama mpe kolia bato. \q1 \v 7 Ekweyisaki bandako na bango ya makasi \q2 mpe ebebisaki bingumba na bango. \q1 Soki egangi, mokili mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna \q2 bazalaki kotondisama na somo. \q1 \v 8 Bongo bato ya bituka ya zingazinga, \q2 longwa na bikolo na bango, \q1 bayaki kotelemela yango, \q2 batielaki yango mitambo na bango \q2 mpe bakangaki yango kati na mabulu na bango. \q1 \v 9 Bakangaki yango minyololo, \q2 bakotisaki yango kati na ndako ya banyama, \q1 bamemaki yango epai ya mokonzi ya Babiloni. \q2 Babwakaki yango na boloko \q1 mpo ete mongongo ya koganga na yango \q2 eyokana lisusu na bangomba ya Isalaele te. \s1 Loyembo ya mawa mpo na nzete ya vino \q1 \v 10 Mama na yo azalaki lokola nzete ya vino \q2 kati na elanga na yo ya vino, \q1 oyo elonama pembeni ya mayi, \q2 ezalaki kobota bambuma ebele, \q1 ezalaki na bitape ebele \q2 mpo ete mayi mpe ezalaki ebele. \q1 \v 11 Bitape na yango ezalaki makasi, \q2 ezalaki malamu mpo na kosala mangenda ya bokonzi, \q1 ezalaki molayi makasi koleka banzete mosusu ; \q2 eyebanaki makasi mpo na molayi na yango \q2 mpe mpo na ebele ya makasa na yango. \q1 \v 12 Kasi bapikolaki yango na kanda \q2 mpe babwakaki yango na mabele. \q1 Mopepe ya este ekawusaki yango, \q2 ekweyisaki mbuma na yango, \q1 ekawusaki mpe bitape na yango ya makasi \q2 mpe moto etumbaki yango. \q1 \v 13 Mpe sik’oyo baloni yango kati na esobe, \q2 mokili oyo ekawuka mpe ezanga mayi. \q1 \v 14 Moto ebimi longwa na moko ya bitape na yango \q2 mpe etumbi mbuma na yango ; \q1 ata etape moko te ya makasi etikalaki \q2 mpo na kosala lingenda ya bokonzi. › \m Yango nde ezali nzembo ya mawa mpe esengeli koyemba yango lokola nzembo ya mawa. » \c 20 \s1 Kotomboka ya Isalaele \p \v 1 Na mokolo ya zomi, na sanza ya mitano ya mobu oyo ya sambo, ndambo ya bakambi ya Isalaele bayaki kotuna toli ya Yawe mpe bavandaki liboso na ngai. \v 2 Bongo, Yawe alobaki na ngai : \p \v 3 « Mwana na moto, loba na bakambi ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, boyei solo kotuna toli epai na Ngai ? Na Kombo na Ngai, nakomitika te ete botuna toli epai na Ngai, elobi Nkolo Yawe. › \p \v 4 Boni, mwana na moto, okosambisa bango ? Okosambisa bango solo ? Tutanisa bango na misala ya mbindo ya batata na bango \v 5 mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo naponaki Isalaele, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, epai ya bakitani ya libota ya Jakobi ete nakomimonisa Ngai moko epai na bango kati na Ejipito, nalapaki ndayi mpe nayebisaki bango : ‘ Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’ \v 6 Na mokolo wana, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakobimisa bango na Ejipito mpe nakomema bango na mokili oyo nalukelaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko. \v 7 Nalobaki na bango : ‘ Tika ete moto na moto alongola bililingi ya mbindo oyo ezali liboso ya miso na ye ! Bomikomisa mbindo te, na nzela ya banzambe ya bikeko ya Ejipito ! Nazali Yawe, Nzambe na bino. ’ \p \v 8 Kasi batombokelaki Ngai mpe baboyaki koyokela Ngai, balongolaki te bililingi ya mbindo oyo ezalaki liboso na bango, babwakaki te banzambe ya bikeko ya Ejipito. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai, kati na Ejipito. \v 9 Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo epai wapi bazalaki kovanda. Ngai moko namimonisaki epai ya bana ya Isalaele na miso ya bikolo wana, mpo na kobimisa bango na Ejipito. \v 10 Yango wana nabimisaki bango na Ejipito mpe namemaki bango na esobe. \v 11 Napesaki bango bikateli na Ngai mpe nalakisaki bango mibeko na Ngai mpo ete moto oyo akotosa yango abika na nzela na yango. \v 12 Napesaki bango mpe mikolo na Ngai ya Saba lokola elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bango, mpo bayeba ete Ngai Yawe nde nabulisaki bango. \p \v 13 Kasi bana ya Isalaele batombokelaki Ngai kati na esobe ; batosaki bikateli na Ngai te, kasi babwakaki mibeko na Ngai, oyo moto oyo asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango. Mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakobebisa bango kati na esobe. \v 14 Kasi mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito. \v 15 Kati na esobe, nalapaki lisusu ndayi, na kotombola loboko, ete nakokotisa bango lisusu te na mokili oyo nabongiselaki bango, mokili oyo ebimisaka miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo eleki mikili nyonso na kitoko ; \v 16 pamba te babwakaki mibeko na Ngai, batosaki bikateli na Ngai te mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba : mitema na bango ekangamaki na banzambe na bango ya bikeko. \v 17 Kasi lokola natalaki bango na liso ya mawa, yango wana nabebisaki bango te mpe nasilisaki koboma bango te kati na esobe. \p \v 18 Nalobaki na bana na bango kati na esobe : ‘ Bolanda bikeko ya batata na bino te, botosa mibeko na bango te to bomikomisa mbindo te na banzambe na bango ya bikeko ! \v 19 Nazali Yawe, Nzambe na bino. Bolanda bikateli na Ngai mpe bobatela na bokebi mibeko na Ngai. \v 20 Bobulisa mikolo na Ngai ya Saba mpo ete ezala elembo ya boyokani kati na Ngai mpe bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bino. ’ \v 21 Kasi bana mpe batombokelaki Ngai, balandaki bikateli na Ngai te, babatelaki te na bokebi mibeko na Ngai, oyo moto asengeli kotosa mpo ete abika na nzela na yango, mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. Boye, namilobelaki ete nakotombokela bango makasi mpe nakopelisela bango kanda na Ngai kati na esobe. \v 22 Kasi nazongisaki loboko na Ngai sima, mpe mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nasalaki bongo mpo ete Kombo na Ngai etiolama te na miso ya bikolo oyo liboso na bango, nabimisaki bango na Ejipito. \p \v 23 Nzokande, kati na esobe, nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopanza bango kati na bikolo mpe kati na mikili ya bapaya ; \v 24 pamba te batosaki mibeko na Ngai te, kasi babwakaki bikateli na Ngai mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba, mpe miso na bango ekobaki kotala kaka banzambe ya bikeko ya batata na bango. \v 25 Mpe lisusu, Ngai moko napesaki bango bikateli ya malamu te mpe mibeko oyo epesaka bomoi te, \v 26 natikaki ete bamikomisa mbindo na nzela ya makabo na bango, mbeka ya mwana ya liboso nyonso, mpo ete natondisa bango na somo mpe bayeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › \p \v 27 Yango wana, mwana na moto, loba na bana ya Isalaele mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ezalaki mpe kaka boye nde batata na bino bafingaki Ngai, wana batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai. \v 28 Tango nakotisaki bango na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa bango, mpe tango bamonaki bangomba milayi mpe banzete ya mibesu, bakomaki kobonza kuna bambeka mpe bakado oyo etumbolaki kanda na Ngai, kopesa makabo na bango ya solo kitoko mpe kosopa makabo na bango ya masanga. \v 29 Boye, natunaki bango : Esambelo ya likolo ya ngomba\f + \fr 20.29 \fr*\ft Esambelo ya likolo ya ngomba, babengaka yango Bama kino moyi ya lelo\ft*\f* epai wapi bozali kokende elakisi nini ? › Mpe babengaki yango, kino na mokolo ya lelo : ‹ Esambelo ya likolo ya ngomba. › \s1 Kosambisama mpe lobiko \p \v 30 Yango wana, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, bomikomisi solo mbindo mpo na kolanda nzela ya batata na bino mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko ? \v 31 Tango bozali kobonza makabo na bino, mbeka ya bana na bino ya mibali na moto, bozali kokoba komikomisa mbindo na nzela ya banzambe na bino ya bikeko kino na mokolo ya lelo. Oh libota ya Isalaele ; boni, namitika ete botuna toli epai na Ngai ? Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakotika te ete botuna Ngai. \p \v 32 Bozali koloba : ‘ Tolingi kozala lokola bato ya bikolo mosusu, lokola bituka ya mikili mosusu ; tolingi na biso kosalaka mpo na banzete mpe mabanga. ’ Kasi eloko oyo bozali kokanisa ekosalema te. \v 33 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakokonza bino, na nguya ya loboko na Ngai, oyo esembolama, mpe na kanda makasi ; \v 34 nakozongisa bino wuta na bikolo ya bapaya mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana, na nguya ya loboko na Ngai oyo esembolama mpe na kanda makasi. \v 35 Nakomema bino na esobe ya bikolo, mpe kuna, tokotalana na miso mpe nakopesa bino etumbu. \v 36 Nakopesa bino etumbu ndenge napesaki batata na bino etumbu na esobe ya mokili ya Ejipito, elobi Nkolo Yawe. \v 37 Nakobatela bino na se ya lingenda na Ngai mpe nakomema bino na mokili na Ngai ya boyokani. \v 38 Nakolongola kati na bino bato oyo batombokelaka Ngai mpe bato oyo batelemelaka Ngai. Bongo nakobimisa bango na mokili oyo bazali kovanda lokola bapaya ; kasi bakokota na mokili ya Isalaele te. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. \p \v 39 Kasi mpo na bino, oh libota ya Isalaele, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete moko na moko kati na bino akende kosalela banzambe na ye ya bikeko ! Kasi na mikolo ekoya, bokotosa Ngai kaka mpe bokotika kobebisa bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya makabo mpe ya banzambe na bino ya bikeko. \v 40 Pamba te na ngomba na Ngai ya bule, ngomba oyo eleki molayi kati na Isalaele, elobi Nkolo Yawe, kuna na mokili wana, bato nyonso ya libota ya Isalaele bakosalela Ngai, mpe Ngai nakoyamba bango kaka kuna. Kuna, nakosepela koyamba mbeka mpe makabo na bino oyo eleki kitoko mpe mbeka na bino nyonso ya bule. \v 41 Nakoyamba bino malamu, lokola makabo ya solo kitoko, tango nakobimisa bino longwa na bikolo mpe nakosangisa bino longwa na mikili epai wapi bozalaki ya kopanzana. Mpe Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai kati na bino na miso ya bikolo. \v 42 Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakokotisa bino na mokili ya Isalaele, mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa epai ya batata na bino. \v 43 Mpe kuna, bokokanisa lisusu bizaleli na bino mpe misala na bino nyonso oyo na nzela na yango, bomikosaki mbindo mpe bokokoma komiyokela nkele likolo ya mabe nyonso oyo bosalaki. \v 44 Bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakosalela bino makambo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, kasi kolanda te nzela na bino ya mabe mpe misala na bino ya mbindo, oh libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. › » \s1 Sango ya pasi mpo na Isalaele \p \v 45 Yawe alobaki na ngai : \v 46 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya sude, loba mpo na kotelemela etuka ya sude mpe sakola mpo na kotelemela zamba ya mokili ya sude. \v 47 Loba na zamba ya mokili ya sude : ‹ Yoka Liloba na Yawe. Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakopelisa moto kati na yo, mpe ekotumba banzete na yo nyonso, ezala banzete ya mobesu to ya kokawuka. Moto yango ya makasi ekotikala kokufa te mpe ekotumba bilongi nyonso, wuta na nor kino na sude. \v 48 Bato nyonso bakomona ete ezali Ngai Yawe nde napelisi yango ; mpe ekotikala kokufa te. › » \p \v 49 Bongo nalobaki : « Ah ! Nkolo Yawe, bazali kotonga ngai : ‹ Ezali ye te oyo alobaka na masese ? › » \c 21 \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Yelusalemi, loba mpo na kotelemela bisika ya bule mpe sakola mpo na kotelemela Isalaele. \v 3 Loba na mokili ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Natombokeli yo, nakobimisa mopanga na Ngai na ebombelo na yango mpe nakoboma bato, kati na mokili na yo, ezala bato ya sembo to bato mabe. \v 4 Mpo ete nakoboma bato ya sembo mpe ya mabe, mopanga na Ngai ekobima na ebombelo na yango mpo na koboma moto nyonso, wuta na sude kino na nor. \v 5 Boye, bato nyonso bakososola ete Ngai Yawe nde nabimisi mopanga na Ngai wuta na ebombelo na yango, mpe ekozonga lisusu te. › \p \v 6 Yango wana, mwana na moto, lela ! Kende kolela liboso na bango, na motema oyo ebukani mpe ya mawa. \v 7 Soki batuni yo : ‹ Mpo na nini ozali kolela ? › Okozongisela bango : ‹ Ezali mpo na sango oyo ezali koya. › Mitema mpe maboko nyonso ekolemba lokola mayi, bato nyonso bakomitungisa mpe mabolongo nyonso ekolenga. Sango yango ezali koya ; solo ekosalema, elobi Nkolo Yawe ! » \s1 Mopanga ya Yawe \p \v 8 Yawe alobaki na ngai : \q1 \v 9 « Mwana na moto, sakola. \q2 Loba : Tala liloba oyo Yawe alobi : \q1 ‹ Mopanga, mopanga ! \q2 Bangalisi mpe bapelisi yango ! \q1 \v 10 Bapelisi yango mpo na koboma, \q2 bangalisi yango mpo na kobimisa mikalikali ! \q1 Boni, tosepela kaka na lingenda ya bokonzi \q2 ya mwana na ngai ya mobali ? \q1 Mopanga ya mwana na ngai \q2 esambwisaka banzete nyonso. \q1 \v 11 Mopanga epesami mpo ete bangalisa yango, \q2 mpo ete basimba yango na loboko ; \q1 bangalisi yango mpe bapelisi yango \q2 mpo ete mobomi asalela yango. \q1 \v 12 Mwana na moto, ganga mpe lela makasi ! \q2 Pamba te mopanga ebimi mpo na koboma bato na ngai, \q1 mpo na koboma bakambi nyonso ya Isalaele ; \q2 babongisami mpo na kokufa na mopanga \q1 elongo na bato na ngai. \q2 Yango wana, beta tolo na yo ! \q1 \v 13 Komekama ekoya penza ; \q2 mpe likambo nini ekosalema \q1 soki lingenda ya bokonzi, oyo mopanga esili kotiola, \q2 etikali lisusu te, elobi Nkolo Yawe ? › \q1 \v 14 Boye mwana na moto, \q2 sakola mpe beta maboko na yo ! \q1 Tika ete mopanga eboma \q2 mbala mibale to mbala misato ! \q1 Ezali mopanga oyo ebomaka ; \q2 ezali solo mopanga oyo ebomaka mingi, \q2 mopanga oyo ezingeli bango bisika nyonso. \q1 \v 15 Mpo ete mitema na bango ekoka kolenga \q2 mpe bakufi bazala ebele, \q1 nasili kotia mopanga oyo ebomaka \q2 na bikuke nyonso ya bingumba na bango. \q1 Tala, bangalisi yango mpo ete epela lokola mikalikali ; \q2 basimbi yango mpo na koboma ! \q1 \v 16 Oh mopanga, beta na ngambo ya loboko ya mobali \q2 mpe beta na ngambo ya loboko ya mwasi ; \q2 beta na esika nyonso oyo minu na yo etali ! \b \q1 \v 17 Ngai mpe, nakobeta maboko na Ngai ; \q2 mpe kanda na Ngai ya makasi ekokita. \q2 Ngai Yawe nde nalobi. » \s1 Kokweya ya Yelusalemi \p \v 18 Yawe alobaki na ngai : \p \v 19 « Mwana na moto, sala banzela mibale oyo mopanga ya mokonzi ya Babiloni ekoki kolekela ; banzela nyonso mibale ebimela na mokili moko. Na ekotelo ya nzela moko na moko, tia elembo oyo ekolakisa nzela ya engumba. \v 20 Sala nzela moko mpo ete mopanga ekoma kino na Raba, engumba ya bato ya Amoni, mpe nzela mosusu mpo ete mopanga ekoma kino na Yelusalemi, engumba batonga makasi, kati na Yuda. \v 21 Pamba te mokonzi ya Babiloni akotelema na esika oyo banzela mibale ekutana mpo na kosala makambo ya soloka, akobeta zeke na koningisa makonga ya mike, akotuna banzambe na ye ya bikeko mpe akotala mabale\f + \fr 21.26 \fr*\ft Mabale to libale soki ezali moko : ezali moko ya biloko ya kati ya banyama oyo babengaka, na lifalanse : foie\ft*\f* ya banyama. \v 22 Zeke oyo ekotalisa Yelusalemi ezali kati na loboko na ye ya mobali : kuna na Yelusalemi, akopesa mitindo ya koboma, akobeta mololo ya bitumba, akotia bashar ya bitumba liboso ya bikuke ya engumba, akotonga bamir ya zelo mpe akotimola mabulu ya kobombamela. \v 23 Kasi lokola basilaki kolapa ndayi ete bakotosa ye, bavandi ya Yelusalemi bakomona yango lokola bimoniseli ya pamba mpe ya lokuta. Kasi mokonzi ya Babiloni akosala ete bakanisa lisusu mabe na bango, mpe akomema bango na bowumbu. \v 24 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola mabe na bino ezongeli bino na makanisi, lokola bolakisi Ngai na polele botomboki na bino mpe bomonisi masumu na bino kati na misala na bino nyonso ; lokola bosali bongo, bokokende na bowumbu. \p \v 25 Yo mokambi ya Isalaele, moto ya mbindo mpe moto mabe, mikolo ezali koya, tango na yo ya etumbu, mpo na kosukisa mabe na yo ! \v 26 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Longola ye eteni ya elamba ya moto, longola ye motole ! Makambo ekobongwana, ekozala lisusu te ndenge ezalaki liboso ! Bato oyo bakitisama bakotombwama, mpe ba-oyo batombwama bakokitisama. \v 27 Libebi ! Libebi ! Nakokomisa yango libebi. Ekotikala kobonga lisusu te kino tango moto oyo akopesa etumbu, oyo nakopesa ye makoki mpo na yango, akoya. › \s1 Etumbu mpo na mokili ya Amona \p \v 28 Mpe yo, mwana na moto, sakola mpe loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na tina na bato ya Amoni mpe mafinga na bango : \q1 Mopanga, babimisi mopanga mpo na koboma, \q2 bapelisi yango mpo na koboma \q2 mpe mpo na kongenga lokola mikalikali ! \q1 \v 29 Atako bapesaki yo bimoniseli mpe masakoli ya lokuta, \q2 mopanga ekokata bakingo ya bato ya mbindo \q2 oyo mokolo ya suka mpo na mabe na bango esili kokoka. \b \q1 \v 30 Zongisa mopanga na ebombelo na yango. \q2 Nakosambisa yo na esika oyo okelamaki, \q2 na mokili ya bakoko na yo. \q1 \v 31 Nakokitisela yo kanda na Ngai ya makasi \q2 mpe nakofula yo moto ya kanda na Ngai ; \q1 bongo nakokaba yo na maboko \q2 ya bato ya mobulu oyo babebisaka. \q1 \v 32 Okozika na moto, \q2 makila na yo ekopanzana kaka na mokili na yo \q1 mpe bakokanisa yo lisusu te ; \q2 pamba te Ngai Yawe nde nalobi. › » \c 22 \s1 Masumu ya Yelusalemi \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, okosambisa yango solo ? Okosambisa solo engumba oyo esopaka makila ? Lakisa yango misala na yango nyonso ya mbindo \v 3 mpe loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh engumba oyo emibendelaka bololo na nzela ya kosopa makila na kati-kati na yango mpe emikomisaka mbindo na nzela ya komisalela bikeko, \v 4 ozali na ngambo mpo na makila oyo osopaki mpe okomi mbindo mpo na bikeko oyo osalaki ! Okomisi bomoi na yo mokuse mpe okomi na suka ya mibu ya bomoi na yo ! Yango wana, nakokomisa yo eloko ya kotiola liboso ya bikolo mpe eloko ya maseki liboso ya mikili nyonso. \v 5 Yo, engumba ya mbindo, etonda na mobulu, bato oyo bazali pene mpe ba-oyo bazali mosika bakoseka yo ! \p \v 6 Tala ndenge bakambi ya Isalaele basalelaka bokonzi na bango mpo na kosopa makila. \v 7 Kati na mboka na yo, batiolaka batata mpe bamama, banyokolaka mopaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali. \v 8 Otiolaka biloko na Ngai ya bule mpe obebisaka bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. \v 9 Na mboka na yo, bakoselaka bato makambo mpo na kobomisa bango. Na mboka na yo, baliaka biloko na bisika ya bule oyo ezalaka na likolo ya bangomba mpe basalaka makambo ya nkele. \v 10 Na mboka na yo, mibali basangisaka nzoto na basi ya batata na bango mpe bazwaka na makasi basi oyo bazali komona sanza na bango, na tango oyo bazali mbindo. \v 11 Na mboka na yo, moko na moko azali kosala makambo ya mbindo elongo na mwasi ya moninga na ye, mosusu azali kokomisa mwasi ya mwana na ye mbindo, mpe mosusu lisusu azali kosangisa nzoto na makasi na ndeko na ye ya mwasi, mwana mwasi ya tata na ye. \v 12 Na mboka na yo, bato bazwaka kanyaka mpo na kosopa makila, badefisaka mpo na kozwa mileki mpe litomba oyo eleka ndelo, banyokolaka baninga mpo na kokoma na bomengo mpe bobosani Ngai, elobi Nkolo Yawe. \p \v 13 Solo, nakobeta maboko na Ngai mpo na litomba oyo bozwaki na nzela ya mabe mpe mpo na makila oyo botangisaki kati na bino. \v 14 Boni, bokoyika kaka mpiko to maboko na bino ekozala kaka makasi na mokolo oyo nakokitisela bino kanda na Ngai ? Ngai Yawe, nalobaki mpe nakokokisa yango. \v 15 Nakopanza bino kati na bikolo, nakopalanganisa bino bipai na bipai kati na mokili mpe nakosukisa mbindo na bino. \v 16 Omikomisaki mbindo na miso ya bikolo, kasi okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › » \p \v 17 Yawe alobaki na ngai : \p \v 18 « Mwana na moto, libota ya Isalaele ekomi lokola fulu na miso na Ngai ; bango nyonso bakomi lokola ebende ya motane, ebende ya langi ya etabe oyo etela, ebende mpe mbodi oyo babwaka na etumbelo ya bibende. Solo, bakomi kaka lokola bosoto ya palata. \v 19 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola bino nyonso bokomi kaka lokola bosoto, nakosangisa bino na Yelusalemi. \v 20 Ndenge bato basangisaka palata, ebende ya motane, ebende ya langi ya etabe oyo etela, mbodi mpe ebende kati na etumbelo ya bibende mpo na kolamba yango, ndenge wana mpe Ngai nakosangisa bino na kanda mpe na kotomboka na Ngai, mpe nakobwaka bino kati na engumba mpo na kozikisa bino. \v 21 Nakosangisa bino mpe nakofula bino mopepe ya moto ya kanda na Ngai ; bongo nakozikisa bino kati na Yelusalemi. \v 22 Ndenge bazikisaka palata kati na etumbelo ya bibende, ndenge wana mpe nakozikisa bino kati na engumba. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe, nasopeli bino kanda na Ngai ya makasi. › » \p \v 23 Yawe alobaki na ngai lisusu : \p \v 24 « Mwana na moto, loba na Yelusalemi : ‹ Ozali mabele oyo epetolamaki te mpe enokelaki mvula te na mokolo ya kanda na Ngai ya makasi. › \v 25 Basakoli na yo bazali kosala likita ; lokola nkosi oyo ezali koganga tango ezali kopasola nyama na yango, bazali koboma bato, kobotola bomengo mpe biloko ya motuya ya bato mpe kokomisa ebele kati na yango, basi bakufisa mibali. \v 26 Banganga-Nzambe na yango bazali kobuka mobeko na Ngai mpe bazali kobebisa bosantu ya biloko na Ngai ya bule, bazali kosala bokeseni te kati na biloko ya bule mpe biloko mosusu, bazali kosunga bato te ete bayeba kosala bokeseni kati na makambo oyo ezali mbindo mpe oyo ya peto ; bakangeli Basaba na Ngai miso, boye babulisi Ngai te kati na bango. \p \v 27 Bakalaka kati na yango bazali lokola mbwa ya zamba oyo ezali kopasola nyama na yango, bazali kosopa makila mpe koboma bato mpo na kozwa bomengo na nzela ya mabe. \v 28 Basakoli na yango bazali kopakola misala na bango ya mabe potopoto ya pembe na nzela ya bimoniseli mpe masakoli ya lokuta ; bazali koloba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi, › na tango Yawe alobi na Ye eloko moko te. \v 29 Bato ya mokili bazali koyiba mpe kobotola bato biloko na makasi, bazali konyokola mobola mpe moto oyo akelela, bazali komonisa mopaya pasi na nzela ya kopimela ye bosembo. \p \v 30 Nalukaki ata moto moko kati na bango, oyo akokaki kotonga mir mpe kotelema liboso na Ngai, na lidusu ya mir mpo na bolamu ya mokili mpo ete nakoka kobebisa yango te, kasi namonaki ata moto moko te. \p \v 31 Yango wana, nakosopela bango kanda na Ngai ya makasi mpe natumba bango na moto ya kanda na Ngai, nakopesa bango etumbu kolanda etamboli na bango, elobi Nkolo Yawe. » \c 23 \s1 Bandeko basi mibale ya bandumba \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, ezalaki na basi mibale, bana ya mama moko. \v 3 Bakomaki na kindumba mpe bamipesaki na yango wuta bolenge na bango, na Ejipito. Kuna, bato bazalaki kosakana na mabele na bango mpe kosimbasimba tolo na bango ya bolenge. \v 4 Oyo ya kulutu, kombo na ye ezalaki Ohola ; mpe oyo ya leki, kombo na ye ezalaki Oholiba : bazalaki basi na Ngai mpe babotaki bana mibali mpe bana basi. Ohola azali Samari mpe Oholiba azali Yelusalemi. \p \v 5 Ohola amipesaki na kindumba tango azalaki nanu ya Ngai mpe akufelaki kolinga bamakangu na ye, bato ya Asiri, bilombe ya bitumba \v 6 oyo balataka bilamba ya lokumu ya langi ya ble, bayangeli mpe bakonzi ya basoda ; bango nyonso bazalaki bilenge mibali ya kitoko oyo bayebaki malamu kotambola na bampunda. \v 7 Ye moko alakisaki polele kindumba na ye epai ya bato ya lokumu ya Asiri mpe amikomisaki mbindo na nzela ya banzambe ya bikeko nyonso, ya moto nyonso oyo ye azalaki kokufela na bolingo. \v 8 Atikaki te kindumba na ye oyo abandaki na Ejipito, oyo na tango ya bolenge na ye, mibali bazalaki kosangisa na ye nzoto, kosimbasimba tolo na ye ya bolenge mpe kosilisa baposa na bango ya nzoto epai na ye. \p \v 9 Yango wana nakabaki ye na maboko ya bamakangu na ye, bato ya Asiri, oyo azalaki kokufela. \v 10 Batikaki ye bolumbu, bakendeki na bana na ye ya mibali mpe ya basi, mpe babomaki ye na mopanga. Akomaki lokola ndakisa mpo na basi mosusu, pamba te azwaki etumbu. \p \v 11 Ndeko na ye ya mwasi, Oholiba, amonaki makambo oyo nyonso ; kasi lokola posa ya kindumba elataki ye makasi, asalaki mobulu koleka kutu ndeko na ye ya mwasi. \v 12 Ye mpe akufelaki kolinga mibali ya Asiri : bayangeli, bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo balataka kitoko mpe batambolaka malamu likolo ya bampunda ; bango nyonso bazalaki bilenge mibali kitoko. \v 13 Namonaki ete ye mpe amikomisaki mbindo : bango mibale balandaki kaka nzela moko. \p \v 14 Nzokande, ye kutu akendeki mosika koleka na kindumba na ye ; amonaki bililingi ya mibali na mir, bililingi ya bato ya Chalide, oyo basala na langi ya motane ; \v 15 mibali yango balataki mikaba na baloketo na bango mpe bitendi ya balangi ebele na mito na bango. Bango nyonso bazalaki na lolenge ya bakonzi ya basoda ya Babiloni, oyo babotama na mokili na Chalide. \v 16 Tango kaka amonaki bango, akufelaki bango na bolingo mpe atindaki bantoma epai na bango, na mokili ya Chalide. \v 17 Bato ya Babiloni bayaki epai na ye kino na mbeto na ye oyo asalelaka bolingo mpe bakomisaki ye mbindo na nzela ya kindumba na bango. Sima na bango kokomisa ye mbindo, ayinaki bango. \v 18 Tango alakisaki polele kindumba na ye mpe atalisaki bolumbu na ye, nayinaki ye, ndenge kaka nayinaki ndeko na ye ya mwasi. \v 19 Nzokande, azalaki se kobakisa kindumba na ye tango azalaki kokanisa mikolo ya bolenge na ye, oyo azalaki kosala kindumba, na Ejipito. \v 20 Kuna, akufelaki kolinga bamakangu na ye, oyo nzoto na bango ya mibali ezalaka lokola nzoto ya mibali ya ane mpe oyo bazalaka na nguya ya kosangisa nzoto lokola mpunda. \v 21 Boye, okanisaki lisusu kindumba na yo, oyo ozalaki kosala na bolenge tango mibali ya Ejipito bazalaki kosakana na mabele na yo mpe kosimbasimba tolo na yo ya bolenge. \p \v 22 Yango wana, Oholiba, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosala ete bamakangu na yo, ba-oyo yo oboyaki, babalukela yo ; mpe nakosala lisusu ete babimela yo na bangambo nyonso : \v 23 mibali ya Babiloni mpe mibali nyonso ya Chalide, ya Pekodi, ya Shoa mpe ya Koa elongo na mibali nyonso ya Asiri, bilenge mibali kitoko. Bango nyonso bazalaki bayangeli mpe bakonzi ya basoda, basoda ya mpiko oyo batambolaka malamu likolo ya bampunda mpe bakonzi ya basoda ya lokumu ; bango nyonso batambolaka likolo ya bampunda. \v 24 Bakoya kobundisa yo na bibundeli, na bampunda mpe na bashar na yango elongo na bato ebele ; bakomibongisa mpo na kobundisa yo na bangambo nyonso, na banguba minene mpe ya mike, mpe na bikoti ya basoda. Nakokaba yo na maboko na bango mpo ete bapesa yo etumbu mpe bakosambisa yo kolanda mibeko na bango. \v 25 Nakotelemela yo na kanda na Ngai mpe bakosala yo mabe, na mitema ya kanda penza. Bakokata yo zolo mpe matoyi ; bongo bato na yo, oyo bakotikala bakokufa na mopanga. Bakokende na bana na yo ya mibali mpe ya basi, bongo ba-oyo bakotikala bakokufa na moto. \v 26 Bakobotola yo lisusu bilamba na yo mpe babiju na yo ya talo. \v 27 Nakosukisa makambo ya soni mpe kindumba na yo, oyo obandaki na Ejipito. Okotombola lisusu miso na yo te mpo na komona bato wana mpe okotikala lisusu kokanisa Ejipito te. \p \v 28 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kokaba yo na maboko ya bato oyo oyinaka, bato oyo osepelaka lisusu na bango te. \v 29 Bato yango bakoyina yo, bakosala yo mabe penza mpe bakobotola yo mbuma ya mosala na yo ; bakolongola yo bilamba mpe okotikala bolumbu, bongo soni ya kindumba na yo ekobima polele. Kindumba mpe ekobo na yo \v 30 nde ememelaki yo makambo oyo ekomeli yo, pamba te okufelaki kolinga mibali ya bikolo wana mpe omikomisaki mbindo na nzela ya kosalela banzambe na bango ya bikeko. \v 31 Lokola olandaki nzela ya ndeko na yo ya mwasi, nakotia kopo oyo ye amelaki na loboko na yo. \q1 \v 32 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q2 Okomela kopo oyo ndeko na yo ya mwasi amelaki, \q1 kopo moko ya monene mpe ya mozindo ; \q2 ekomemela yo kosambwa mpe soni, \q2 pamba te ezali monene penza. \q1 \v 33 Ekolangwisa yo na pasi : \q2 kopo ya kobebisama mpe ya somo, \q2 kopo ya ndeko na yo ya mwasi, Samari. \q1 \v 34 Okomela yango kino ekokawuka, \q2 okobuka-buka yango na biteni, \q2 mpe ekozokisa-zokisa mabele na yo, \m pamba te Ngai Nkolo Yawe nde nalobi. \b \p \v 35 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola obosanaki Ngai mpe otiaki Ngai na sima ya mokongo na yo, okomema mikumba ya ekobo mpe ya kindumba na yo. » \p \v 36 Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, okosambisa penza Ohola mpe Oholiba ? Lakisa bango misala na bango ya mbindo ; \v 37 pamba te basalaki kindumba, mpe makila etondi na maboko na bango ; basalaki kindumba na banzambe na bango ya bikeko, mpe babonzaki lokola mbeka bana na bango ya mibali oyo babotelaki Ngai, mpo ete bakoma bilei ya banzambe na bango ya bikeko. \v 38 Basalaki yango mpe lisusu epai na Ngai : kaka na tango yango, bakomisaki Esika na Ngai ya bule mbindo mpe babebisaki bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. \v 39 Kaka na mokolo oyo bazalaki kobonza lokola mbeka bana na bango epai ya banzambe na bango ya bikeko, bazalaki mpe kokota na Esika na Ngai ya bule mpe kobebisa bosantu na yango. Yango nde bazalaki kosala kati na Ndako na Ngai. \p \v 40 Batindaki mpe bantoma epai ya bato oyo bazalaka mosika. Mpe tango bayaki, omisukolaki nzoto, opakolaki biloko ya monzele na miso mpe olataki babiju. \v 41 Ovandaki na mbeto moko ya kitoko ; mpe liboso na yango, ezalaki na mesa moko oyo otiaka malasi ya ansa mpe mafuta na Ngai. \p \v 42 Zingazinga na ye, makelele ya bato ebele ezalaki koyokana, bameli masanga ebele oyo bawutaki na esobe elongo na bato ebele bayaki kolatisa bango mayaka na maboko mpe mitole ya bonzenga na mito na bango. \v 43 Boye, namilobelaki na tina na mwana mwasi oyo anzulukaki nzoto mpo na kindumba : ‹ Boni, ezali kaka ye oyo anzuluki nzoto nde azali kozongela lisusu penza kindumba ! › \v 44 Mpe basangisaki na ye nzoto : ndenge mibali basangisaka nzoto na mwasi ya ndumba, ndenge wana mpe basalaki bango, Ohola mpe Oholiba. \p \v 45 Kasi bato ya sembo bakosambisa bango mpe bakokatela bango etumbu oyo bapesaka na basi oyo basalaka ekobo mpe basopaka makila, pamba te bazali bandumba mpe maboko na bango ezali na makila. \p \v 46 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tika ete ebele ya bato batombokela bango, banyokola bango mpe babotola biloko na bango na makasi ! \v 47 Tika ete babamba bango mabanga mpe baboma bango na mopanga ; baboma bana na bango ya mibali mpe ya basi mpe babebisa bandako na bango na moto. \v 48 Na nzela wana nde nakosukisa kindumba kati na mokili, mpo ete basi nyonso bazwa mayele mpe balanda ndakisa na bango te. \v 49 Bokozwa etumbu mpo na kindumba na bino mpe bokomema mikumba ya masumu na bino ya kosambela banzambe ya bikeko ; boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. » \c 24 \s1 Nzungu ya kolambela \p \v 1 Na mokolo ya zomi ya sanza ya zomi, na mobu ya libwa, Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, koma mokolo oyo kati na buku, mokolo ya lelo, pamba te ezali na mokolo oyo nde mokonzi ya Babiloni azingelaki engumba Yelusalemi. \v 3 Loba na libota oyo ya batomboki lisese oyo ; yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q1 Kamata nzungu moko ya kolambela, \q2 bongisa yango mpe tia mayi kati na yango. \q1 \v 4 Tia biteni ya misuni kati na yango, \q2 biteni nyonso ya malamu : lokolo mpe lipeka ; \q2 tondisa yango na mikuwa ya malamu. \q1 \v 5 Kamata bameme oyo ezanga mbeba kati na etonga \q2 mpe sangisa bakoni na se ya nzungu yango ; \q1 pelisa moto mpe tokisa nzungu yango \q2 kino mikuwa ekobela penza ! \m \v 6 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q1 Mawa na engumba oyo esopaka makila, \q2 nzungu ya salite, nzungu oyo elongwaka salite te ! \q1 Tika yango pamba, \q2 longola eteni moko na moko \q2 kino nyonso ekosila na kobeta zeke te. \q1 \v 7 Pamba te makila oyo esopaki ezali kati na yango ; \q2 esopaki yango na likolo ya libanga, \q1 esopaki yango na mabele te \q2 epai wapi putulu ekokaki kozipa yango. \b \q1 \v 8 Mpo na kopelisa kanda na Ngai \q2 mpe kozongisela yango mabe na mabe, \q1 natie makila na yango na likolo ya mabanga \q2 mpo ete ebombama te. \m \v 9 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q1 Mawa na engumba oyo esopaka makila ! \q2 Ngai mpe nakosangisela yo bakoni ebele. \q1 \v 10 Sangisa bakoni mpe pelisa moto. \q2 Lamba misuni malamu, \q1 sangisa yango na biloko mike-mike \q2 ya solo kitoko oyo balambelaka \q2 mpe sala ete mikuwa ezika. \q1 \v 11 Bongo tia nzungu ya pamba \q2 na likolo ya makala ya moto \q1 kino ekoma moto \q2 mpe linzanza na yango ekoma motane, \q1 mpo ete mbindo na yango elongwa \q2 mpe konzuluka na yango ekende na moto. \q1 \v 12 Kasi konzuluka na yango esilisi makasi ya bato, \q2 bosoto na yango etikali kolongwa te ! \q2 Ezala moto, elongi te kolongola bosoto yango ! \p \v 13 Yelusalemi, mbindo na yo ezali kindumba. Nalukaki kokomisa yo peto, kasi olingaki kopetolama te na bosoto na yo. Okotikala lisusu kozala peto te kino tango nakosilisa kosopela yo kanda na Ngai. \b \p \v 14 Ngai Yawe nde nalobaki. Tango ekoki mpo na Ngai kosala ; nakoyoka mawa te, nakozonga sima te ! Okosambisama solo kolanda etamboli mpe misala na yo, elobi Nkolo Yawe. › » \s1 Kufa ya mwasi ya Ezekieli \p \v 15 Yawe alobaki na ngai : \p \v 16 « Mwana na moto, nakolongola, na nzela ya kufa ya pwasa, mwasi oyo asepelisaka motema na yo. Kasi komitungisa te, kolela te mpe kotangisa mpinzoli te. \v 17 Lela na se ya motema, kosala matanga na tina na ye te. Kanga kitendi na moto na yo mpe tia sandale na makolo na yo ; kozipa mandefu ya elongi na yo te mpe kolia bilei ya matanga te, ndenge ezali ezaleli ya bokoko na bino. » \p \v 18 Boye, na tongo, nasololaki na bato ; bongo na pokwa, mwasi na Ngai akufaki. Na tongo ya mokolo oyo elandaki, nasalaki kolanda mitindo oyo epesamelaki ngai. \p \v 19 Boye, bato batunaki ngai : \pi1 — Okoki koyebisa biso te soki makambo oyo ozali kosala elakisi nini ? \p \v 20 Nazongiselaki bango : \pi1 — Yawe alobaki na ngai : \v 21 « Yebisa libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosambwisa bosantu ya Esika na Ngai ya bule oyo esalaka lolendo na bino, oyo esepelisaka miso na bino mpe esalaka esengo ya mitema na bino. Bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo botikaki na Yelusalemi bakokufa na mopanga. \v 22 Boye, bokosala ndenge Ngai nasali : bokozipa mandefu na bino te mpe bokolia bilei ya matanga te ; \v 23 bokokanga bitendi na mito na bino mpe bokolata basandale na makolo na bino, bokosala matanga te mpe bokolela te, kasi bokomona pasi mpo na masumu na bino mpe bokokoma kolelalela kati na bino. \v 24 Ezekieli akozala lokola elembo mpo na bino : bokosala ndenge kaka ye asalaki. Tango makambo oyo ekosalema, bokososola ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. › \pi1 \v 25 Bongo yo, mwana na moto ; na mikolo ekoya, nakobotola bandako na bango oyo batonga makasi mpe batielaka motema, oyo esalaka esengo mpe lokumu na bango, oyo esepelisaka miso na bango mpe esalaka esengo ya mitema na bango ; nakobotola lisusu bana na bango ya mibali mpe ya basi. \v 26 Na mokolo wana, moto moko akokima mpe akoya kopesa yo basango. \v 27 Na mokolo wana, monoko na yo ekofungwama, okosolola na monoko yango mpe okokanga lisusu yango te. Boye, okozala elembo mpo na bango mpe bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. » \c 25 \s1 Maloba ya kosambisa mokili ya Amoni \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya bato ya Amoni mpe sakola mpo na kotelemela bango. \v 3 Yebisa bato ya Amoni : ‹ Boyoka liloba na Nkolo Yawe ! Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola bosepelaki tango babebisaki bosantu ya Esika na Ngai ya bule, tango mokili ya Isalaele etikalaki lisusu na bato te mpe wana bato ya Yuda bakendeki na bowumbu, \v 4 nakokaba bino na maboko ya bato ya mikili ya este lokola libula, bakotonga milako na bango mpe bakotelemisa bandako na bango ya kapo kati na mokili na bino ; bakolia bambuma na bino mpe bakomela miliki na bino. \v 5 Nakokomisa engumba ya Raba lopango ya koleisela bashamo, mpe nakokomisa mokili ya bato ya Amoni esika oyo bibwele epemelaka. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. \p \v 6 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ozalaki kobeta maboko mpe kotuta makolo na esengo mpo na kotiola mokili ya Isalaele, \v 7 nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo mpe nakokaba yo na maboko ya bikolo ya bapaya lokola bomengo ya bitumba ; nakolongola yo na molongo ya bikolo, nakosilisa bato na yo mpe nakobebisa yo. Boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › \s1 Maloba ya kosambisa mokili ya Moabi \p \v 8 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola mokili ya Moabi mpe ya Seiri ezalaki koloba : ‘ Tala, libota ya Yuda ekomi kaka lokola bikolo nyonso. ’ \v 9 Mpo na yango, nakobebisa bingumba ya Moabi, oyo batonga makasi, na bandelo na yango, kobanda na bingumba oyo ya kitoko : Beti-Yeshimoti, Bala-Meoni, Kiriatayimi ; \v 10 nakokaba Moabi mpe bato ya Amoni na maboko ya Este lokola libula, mpo ete bakanisa lisusu bato ya Amoni te kati na molongo ya bikolo ; \v 11 nakopesa Moabi etumbu. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › \s1 Maloba ya kosambisa mokili ya Edomi \p \v 12 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Lokola bato ya Edomi bazongisaki mabe na mabe epai ya libota ya Yuda, mpe lokola bamemaki penza ngambo wana basalaki bongo ; \v 13 mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela Edomi mpe nakoboma bato mpe banyama na yango ; nakobebisa yango, mpe bakokufa na mopanga, kobanda na engumba Temani kino na engumba Dedani. \v 14 Nakozongisela mokili ya Edomi mabe na mabe na nzela ya bato na Ngai, Isalaele : bakozongisela mokili ya Edomi mabe na mabe, kolanda kanda na Ngai mpe kotomboka na Ngai. Na bongo, bakoyeba solo ete Ngai, nazongisaka mabe na mabe, elobi Nkolo Yawe. › \s1 Maloba ya kosambisa mokili ya Filisitia \p \v 15 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : ‹ Mpo ete bato ya Filisitia bazongisaki mabe na mabe, mpo ete bakokisaki makanisi mabe ya mitema na bango tango balukaki kobebisa mokili ya Yuda, mpo ete bayina bango wuta kala ; \v 16 mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakomi pene ya kosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela bato ya Filisitia ; nakoboma bato ya Kereti mpe nakobebisa batikali oyo bazalaka pembeni ya ebale monene. \v 17 Nakozongisela bango mabe na mabe mpe nakopesa bango etumbu na nzela ya kanda na Ngai. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakozongisela bango mabe na mabe. › » \c 26 \s1 Maloba ya kosambisa engumba ya Tiri \p \v 1 Na mobu ya zomi na moko, na mokolo ya liboso ya sanza, Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, lokola Tiri alobaki mpo na kotiola Yelusalemi : ‹ Ozwi ! Ekuke ya bikolo ebukani ! Bikuke na yango efungwami mpo na kotondisa ngai na bomengo ! Lokola esili kobebisama, Ngai sik’oyo, nakofuluka ! › \v 3 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh engumba ya Tiri, natombokeli yo ! Nakotindela yo bikolo ebele lokola mbonge ya ebale monene, mpo ete eya kobundisa yo. \v 4 Bakobuka bamir ya Tiri mpe bakokweyisa bandako na yango ya milayi ; mpe Ngai, nakolongola putulu na yango nyonso mpe nakotika yango mabanga ya pamba. \v 5 Engumba Tiri ekokoma, kati na ebale monene, esika oyo balobi mbisi bakobanda kotanda minyama na bango mpo na kokawusa yango. Ezali Ngai nde nasili koloba, elobi Nkolo Yawe ; engumba Tiri ekokoma bomengo ya bitumba ya bikolo, \v 6 mpe bakoboma na mopanga bamboka ya mike-mike oyo ezalaka pembeni ya ebale monene. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. \p \v 7 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Wuta na nor, nakotindela Tiri Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, mokonzi ya bakonzi : akoya elongo na bampunda mpe bashar, basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda mpe mampinga monene ya basoda ; \v 8 akobebisa na mopanga bingumba na yo, oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, akozingela yo, akotimola mabulu ya kobombamela zingazinga ya bamir na yo mpe akotombola banguba na ye mpo na kobundisa yo. \v 9 Akotindela bamir na yo makonga ya basoda na ye, oyo batambolaka likolo ya bampunda mpe akobuka bandako na yo ya milayi na nzela ya bibundeli na ye ya nguya. \v 10 Bampunda na ye ekozala ebele penza kino putulu na yango ekozipa yo ; bamir na yo ekoningana na makelele ya bampunda ya bitumba, ya bapine mpe ya shar, tango akokota na bikuke na yo ndenge bato bakotaka kati na engumba oyo bamir na yango ezali na madusu. \v 11 Makolo ya bampunda na ye ekokota na babalabala na yo nyonso, akoboma bato na yo na mopanga, mpe makonzi oyo esalaka makasi na yo ekokweya na mabele. \v 12 Bakobotola lokola bomengo ya bitumba bozwi mpe biloko na yo ya koteka, bakokweyisa bamir na yo, bakobuka bandako na yo ya kitoko mpe, na sima, bakobwaka nyonso na ebale : mabanga, mabaya mpe putulu na yo. \v 13 Nakosukisa makelele ya banzembo na yo, mpe mindule ya lindanda na yo ekotikala koyokana lisusu te. \v 14 Nakokomisa yo mabanga ya pamba, mpe okokoma esika oyo balobi mbisi bakobanda kotanda minyama na bango mpo na kokawusa yango ; okotikala kotongama lisusu te, pamba te ezali Ngai Yawe nde nalobi, elobi Nkolo Yawe. \p \v 15 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na Tiri : Boni, bisanga ekolenga te na lokito ya kokweya na yo, na kolela ya bato na yo, oyo bazokisi bango bapota minene mpe na kufa ya somo kati na yo ? \v 16 Bakambi nyonso ya bisanga bakotika bakiti na bango ya bokonzi, bakolongola banzambala na bango mpe bilamba na bango batonga bililingi na basinga, bakolata somo lokola elamba mpe bakovanda na mabele ; bakokoma kolenga na somo mpe kobanga tango nyonso, mpo na yo. \v 17 Bakoyembela yo nzembo ya mawa mpe bakoloba : \q1 ‹ Oh engumba oyo ekenda sango, \q2 ndenge nini babebisi yo, \q1 engumba ya bato ya ebale monene ! \q2 Yo mpe bato na yo, \q1 bozalaki na nguya kati na ebale monene, \q2 bozalaki kolengisa na somo \q2 bato nyonso oyo bazalaki kovanda kuna. \q1 \v 18 Sik’oyo bisanga ekomi kolenga, \q2 na mokolo ya kokweya na yo, \q1 bisanga ya ebale monene ekomi na somo makasi \q2 mpo na suka na yo. › \p \v 19 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tango nakokomisa yo engumba oyo ezalaka lisusu na bato te lokola bingumba oyo etikala nanu kozala na bato te, tango nakoyeisa epai na yo mayi ya mozindo mpe bambonge na yango ekozindisa yo, \v 20 nakozindisa yo kati na libulu ya mozindo esika moko na bato oyo bakitaka kuna, epai ya bato ya kala ; nakovandisa yo kati na mokili oyo ezalaka na se ya mabele, lokola kati na libebi ya kala, mpe okozala elongo na bato oyo bakitaka kati na libulu ya mozindo, mpo ete okoma bisika oyo bato bakovanda lisusu te ; mpe okozonga te to okozwa lisusu bisika te na mabele ya bato ya bomoi. \v 21 Nakokomisa yo eloko ya koyoka somo, mpe okokoma eloko pamba ; bakobanda koluka yo kasi bakomona yo lisusu te, elobi Nkolo Yawe. » \c 27 \s1 Loyembo ya mawa na tina na Tiri \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \v 2 « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na Tiri ! \v 3 Loba na Tiri oyo ezalaka pembeni ya ebale monene, oyo esalaka mombongo elongo na bikolo nyonso, bavandi ya bisanga : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q1 Oh engumba Tiri, olobaka : \q2 ‘ Ngai, nakoka na kitoko na ngai ! ’ \q1 \v 4 Etando na yo ezali kati na bibale minene ; \q2 bato oyo batongaki yo nde bakomisaki yo kitoko makasi. \q1 \v 5 Basalaki mipanzi na yo nyonso \q2 na mabaya ya sipele oyo ewutaki na Seniri ; \q1 basalaki likonzi ya masuwa na yo \q2 na nzete ya sedele oyo ewutaki na Libani ; \q1 \v 6 basalaki bankayi na yo na banzete ya sheni \q2 oyo ewutaki na Bashani ; \q1 basalaki bivandelo na yo, ekota pembe ya nzoko \q2 oyo ewutaki na Asiri, \q2 na mabaya ya sipele oyo ewutaki na bisanga ya Kitimi ; \q1 \v 7 basalaki vwale mpe bendele na yo \q2 na elamba ya lino ya kitoko \q1 oyo ewutaki na Ejipito, \q2 mpe batongaki bililingi kati na yango ; \q1 bakapo na yo ezalaki ya langi ya ble mpe ya motane, \q2 ewutaki na bisanga ya Elisha. \q1 \v 8 Baluki nkayi na yo bazalaki \q2 bato ya Sidoni mpe ya Arivadi. \q1 Oh Tiri, bato na yo, oyo bazalaki na bwanya koleka, \q2 nde bazalaki kotambolisa yo. \q1 \v 9 Bampaka ya engumba Gebali mpe bato na yango ya bwanya \q2 nde bazalaki kosala epai na yo \q1 mosala ya kobamba madusu na yo \q2 mpo ete mayi ekota te ; \q1 bamasuwa nyonso ya ebale monene mpe batambolisi na yango \q2 bazalaki koya epai na yo \q2 mpo na kosomba biloko oyo ozalaki koteka. \b \q1 \v 10 Bato ya Persi, ya Ludi mpe ya Puti \q2 bazalaki basoda kati na mampinga na yo : \q1 bazalaki kotia banguba mpe bikoti na bango \q2 na likolo ya bamir na yo ; \q2 bazalaki kosala lokumu na yo. \q1 \v 11 Bato ya Arivadi mpe basoda na yo ya mpiko \q2 bazalaki kotelema na bangambo nyonso ya bamir na yo, \q1 basoda ya Gamadi bazalaki kati na bandako na yo ya milayi : \q2 bazalaki kotia banguba na bango zingazinga ya bamir na yo, \q2 bazalaki kosala ete kitoko na yo ekoma ya kokoka. \p \v 12 Bato ya Tarsisi bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele mpe ya lolenge nyonso ; bazalaki komema epai na yo palata, bibende, eten mpe mbodi. \v 13 Bato ya Yavani, ya Tubali mpe ya Mesheki bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki kopesa yo bawumbu mpe biloko basala na bronze mpo na kosomba epai na yo biloko oyo ozalaki koteka. \v 14 Bato ya Beti Togarima bazalaki komema epai na yo bampunda ya misala, bampunda ya bitumba mpe bamile. \v 15 Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bato ya bisanga ebele bazalaki koya kosomba biloko epai na yo, bazalaki kofuta yo na pembe ya nzoko mpe na banzete ya ebeni. \v 16 Bato ya Siri mpe bazalaki kosala mombongo elongo na yo mpo ete ozalaki na biloko ebele ; bazalaki komema epai na yo mabanga ya emerode, maputa ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bilamba ya lino ya kitoko, mabanga ya korayi mpe ya ribi. \v 17 Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo ble ya mboka Miniti, farine oyo basalelaka mikate mpe bagato, mafuta ya nzoyi, mafuta mpe malasi ya solo kitoko, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka. \v 18 Bato ya Damasi bazalaki kosala mombongo elongo na yo, pamba te ozalaki na bambuma ebele mpe na biloko ebele ; bazalaki komema epai na yo masanga ya vino oyo ezalaki kowuta na mboka Eliboni mpe bapwale ya bameme oyo ezalaki kowuta na mboka Tsakari, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka. \v 19 Bato ya Vedani mpe ya Yavani oyo bazalaki kowuta na Uzali bazalaki komema epai na yo bibende oyo balekisa na moto, bibende oyo basalelaka misala ya moto, banzete ya kasia, mpe banzete oyo ebotaka na mayi mpe basalaka na yango malasi, mpo na kosomba biloko oyo yo ozalaki koteka. \v 20 Bato ya Dedani bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo bilamba ya kitoko oyo batiaka na bampunda. \v 21 Bato ya Arabi mpe bakambi nyonso ya Kedari bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo bana meme ya mibali, bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali. \v 22 Bato ya mombongo ya Saba mpe ya Raema bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; bazalaki komema epai na yo biloko ya mike-mike ya solo kitoko oyo balambelaka, mabanga ya talo ya ndenge na ndenge mpe wolo. \v 23 Bato ya Arani, ya Kane mpe ya Edeni, elongo na bato ya mombongo ya Saba, ya Asiri mpe ya Kilimadi, bazalaki kosala mombongo elongo na yo ; \v 24 bazalaki kosala elongo na yo mombongo ya biloko ya kitoko : bakazaka ya langi ya motane, bilamba batonga bililingi kitoko na basinga, bitoko ya balangi ya ndenge na ndenge mpe mikaba makasi mpe ya kitoko. \q1 \v 25 Bamasuwa minene ya Tarsisi ezalaki komema \q2 biloko na yo ya koteka. \q1 Otondaki meke na biloko \q2 mpe okendeki sango kati na bibale minene. \q1 \v 26 Baluki nkayi na yo bamemaki yo \q2 kino na kati-kati ya bibale minene. \q1 Kasi mopepe ya este ebukaki-bukaki yo \q2 na biteni na kati-kati ya ebale monene : \q1 \v 27 bomengo na yo, biloko na yo ya koteka, \q2 mombongo na yo, baluki nkayi na yo, \q1 bato na yo, oyo basalaka na masuwa, \q2 basali oyo babambaka madusu ya masuwa na yo, \q1 bato oyo basalaka mombongo elongo na yo \q2 mpe basoda na yo nyonso \q1 elongo na lisanga mobimba oyo ezali kati na masuwa, \q2 bakokufa na kati-kati ya bibale minene \q2 na mokolo oyo masuwa na yo ekozinda. \b \q1 \v 28 Tango baluki nkayi na yo bakoganga, \q2 bituka ya ngambo ya ebale monene \q2 ekolenga na somo. \q1 \v 29 Baluki nkayi nyonso mpe bato mosusu \q2 oyo basalaka na masuwa bakosundola masuwa ; \q2 bakotelema na libongo, \q1 \v 30 bakoganga na mongongo makasi \q2 mpe bakolela na mawa nyonso mpo na yo ; \q2 bakomisopela putulu na mito mpe bakomibamba na mabele. \q1 \v 31 Bakomikokola suki ya mito mpe bakolata basaki. \q2 Bakolela yo na mawa na motema \q2 mpe bakomitungisa makasi na mitema. \q1 \v 32 Kati na pasi mpe kolela na bango, \q2 bakoyemba nzembo ya mawa na tina na yo : \q1 ‘ Nani azalaki lokola Tiri, \q2 lokola engumba oyo ekomi kimia \q2 kati na ebale monene ? ’ \q1 \v 33 Tango biloko na yo ya koteka ezalaki kobima \q2 wuta na ebale monene, \q1 ozalaki kokokisa baposa ya bikolo ebele ; \q2 ebele ya bomengo mpe ya nkita na yo ezalaki kokomisa \q2 bakonzi ya mokili bazwi. \q1 \v 34 Kasi tango sik’oyo bambonge ya bibale minene ebuki-buki yo, \q2 ebwaki yo kati na mozindo ya mayi : \q2 biloko na yo mpe basali na yo nyonso bazindi elongo na yo. \q1 \v 35 Bavandi nyonso ya bisanga bakomi na mawa mpo na yo ; \q2 bakonzi na bango bazali kolenga na somo, \q2 mpe bilongi na bango ebebi likolo ya kobanga. \q1 \v 36 Bato ya mombongo ya bikolo mosusu bakomi \q2 koseka mpe kowolola yo : \q2 Osuki eh ! Osuki ! Okotikala kozala lisusu te ! › » \c 28 \s1 Maloba ya kosambisa mokonzi ya Tiri \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, loba na mokambi ya Tiri : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na lolendo ya motema na yo, olobaki : ‘ Nazali nzambe, navandaka na kiti ya bokonzi ya nzambe na kati-kati ya bibale minene. ’ Nzokande, ozali na yo kaka moto, ozali na yo nzambe te atako okanisi ete ozali na bwanya lokola nzambe. \v 3 Boni, okanisi ete ozali na bwanya koleka Daniele ? Okanisi ete oyebi mabombami nyonso ? \v 4 Na bwanya mpe na mayele na yo, okomi na bozwi mpe otondisi wolo mpe palata kati na bibombelo na yo. \v 5 Lokola ozalaki mayele makasi na mosala ya mombongo, oyeisi bomengo na yo ebele makasi ; mpe mpo na bomengo na yo, motema na yo etondi na lolendo. \v 6 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ozali kokanisa ete ozali na bwanya lokola Nzambe, \v 7 nakotindela yo bato ya bikolo ya bapaya, bikolo oyo baleki kanza kati na bikolo, mpo ete babundisa yo : bakobimisela yo mipanga na bango mpo na kosambwisa mayele mpe bwanya na yo, bongo bakosambwisa lokumu na yo. \v 8 Bakokitisa yo kino na libulu, mpe okokufa kufa ya somo kati na bibale minene. \v 9 Okokoka lisusu koloba liboso ya bato oyo bazali koboma yo : ‘ Ngai nazali nzambe ? ’ Ozali na yo kaka moto ; ozali nzambe te, kati na maboko ya bato oyo bazali koboma yo. \v 10 Okokufa kufa ya bato oyo bakatama ngenga te, na maboko ya bato ya bikolo ya bapaya. Ngai nde nalobi, elobi Nkolo Yawe. › » \b \p \v 11 Yawe alobaki na ngai : \p \v 12 « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na mokonzi ya Tiri ! Loba na ye : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ozalaki ndakisa mpo na komona nyonso oyo ezali ya kokoka, otondaki na bwanya, mpe ozalaki kitoko koleka. \v 13 Ozalaki kati na Edeni, elanga ya Nzambe ; mabanga ya talo ya lolenge nyonso ezalaki kokomisa yo kitoko : ribi, topaze, diama, emerode, krizolite, onikisi, jasipe, safiri ; bambunda na yo ya mike mpe baflite na yo ezalaki ya wolo, babongisaki yango mpo na mokolo oyo bakela yo. \v 14 Napakolaki yo mafuta mpo ete ozala Sheribe oyo abatelaka, oyo mapapu na ye efungwama ; pamba te Ngai nde natiaki yo na ngomba ya bule ya Nzambe ; ozalaki wana, ozalaki kotambola na kati-kati ya mabanga oyo ezalaki kongenga lokola moto. \p \v 15 Etamboli na yo ezalaki ata na pamela moko te wuta mokolo oyo okelama kino tango mabe emonanaki kati na yo. \v 16 Lokola omonaki ete mombongo na yo emati makasi, okomaki konyokola bato mpe kosala masumu ; mpo na yango, nalongolaki yo na ngomba ya Nzambe mpe nabenganaki yo, sheribe oyo abatelaka, na molongo ya mabanga oyo ezalaki kongenga lokola moto. \v 17 Motema na yo etondaki na lolendo mpo na kitoko na yo ; obebisaki bwanya na yo mpo na lokumu na yo. Yango wana, nabwaki yo na mabele mpe nakomisi yo eloko ya liseki na miso ya bakonzi. \v 18 Mpo na ebele ya masumu na yo mpe mombongo na yo, oyo osalaka na bosembo te, obebisi bosantu ya bisika na yo ya bule ; mpe Ngai, nabimisi kati na yo moto mpo ete etumba yo ; nakomisi yo putulu ya mabele na miso ya bato nyonso oyo bazali kotala yo. \v 19 Bato ya bikolo nyonso oyo bayebaki yo bakomi na mawa na tina na yo mpo ete okomi eloko ya koyoka somo : suka na yo ezali mabe, ozali lisusu te, okotikala lisusu kozala te ! › » \s1 Maloba ya kosambisa Sidoni \p \v 20 Yawe alobaki na ngai : \p \v 21 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Sidoni mpe sakola na tina na yango ! \v 22 Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh Sidoni, natombokeli yo ! Nakomonisa nkembo na Ngai kati na yo ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakopesa yango etumbu mpe nakomonisa bosantu na Ngai kati na yango. \v 23 Nakotindela yango bokono oyo ebomaka, nakotangisa makila na babalabala na yango ; mopanga ekolongwa na bangambo nyonso mpo na koboma bato na yango, mpe bato ebele bakokufa. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. \p \v 24 Bato ya bikolo ya mayele mabe, oyo bazali lokola basende mpe banzube, bakozingela lisusu bana ya Isalaele te ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. \s1 Isalaele akovanda na kimia \p \v 25 Nkolo Yawe alobi : Tango nakosangisa bana ya Isalaele wuta na bikolo epai wapi napanzaki bango, nakomonisa bosantu na Ngai kati na bango na miso ya bikolo wana ; boye, bakovanda na mokili na bango moko, mokili oyo napesaki epai ya Jakobi, mosali na Ngai. \v 26 Bakovanda kuna na kimia, bakotonga bandako mpe bakosala bilanga ya vino ; bakovanda kuna na kimia tango nakopesa etumbu na bikolo nyonso ya bapaya oyo bazingelaki bango mpe bazalaki kotiola bango. Bongo bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bango. › » \c 29 \s1 Maloba ya kosambisa Ejipito \p \v 1 Na mokolo ya zomi na mibale ya sanza ya zomi, na mobu ya zomi, Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, sakola mpo na kotelemela ye mpe mokili mobimba ya Ejipito ! \v 3 Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q1 Yo Faraon, mokonzi ya Ejipito, natelemeli yo ! \q2 Yo dalagona monene oyo ovandaka \q1 kati na bibale na yo, \q2 yo oyo ozali koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; \q2 mpe ngai, ngai moko nde namisala ! ’ \q1 \v 4 Nakokanga yo bibende na mbanga, \q2 nakosala ete mbisi ya ebale na yo \q1 ekangama yo na poso ya nzoto ; \q2 nakobimisa yo na libanda ya bibale na yo \q2 elongo na mbisi oyo ekangami yo na poso ya nzoto. \q1 \v 5 Nakobwaka yo na esobe, \q2 yo mpe mbisi ya bibale na yo. \q1 Okokweya na mabele ya elanga ya polele ; \q2 bakolokota yo te, bakokunda yo te ; \q1 mpe nakokomisa yo bilei ya banyama ya mokili \q2 mpe ya bandeke ya likolo. \m \v 6 Boye, bavandi nyonso ya Ejipito bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. \q1 Ozalaki na yo kaka lokola eyekamelo \q2 oyo basala na nzete oyo ebotaka na mayi, \q2 mpo na libota ya Isalaele. \q1 \v 7 Tango maboko na bango esimbaki yo, \q2 obukanaki mpe ozokisaki mapeka na bango ; \q1 tango balalelaki yo, \q2 obukanaki mpe olembisaki mikongo na bango. \p \v 8 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakoyeisa mopanga mpo na kobebisa yo, mpe nakoboma bato na yo mpe bibwele na bango. \v 9 Ejipito ekokoma esobe mpe ekotikala lisusu na bato te ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. \p Lokola ozalaki koloba : ‘ Ebale Nili ezali ya ngai ; kasi ngai, ngai moko nde namisala, ’ \v 10 natombokeli yo mpe bibale na yo ; mpe lisusu, nakobebisa mokili ya Ejipito, nakokomisa yango esobe kobanda na Migidoli kino na Siene, kino na bandelo ya mokili ya Kushi. \v 11 Ata litambe moko ya moto to ya nyama ekolekela lisusu wana te : moto moko te akovanda lisusu kuna mibu tuku minei. \v 12 Nakokomisa Ejipito esobe kati na mikili oyo ekoma esobe, mpe bingumba na yango ekotikala lisusu na bato te, mibu tuku minei, kati na bingumba oyo ebeba. Nakopanza bato ya Ejipito kati na bikolo mpe nakopalanganisa bango na mikili mosusu. \p \v 13 Nzokande, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Sima na mibu tuku minei, nakosangisa bato ya Ejipito wuta na bikolo epai wapi bapalanganaki, \v 14 nakokangola bato ya Ejipito oyo bazalaki na bowumbu mpe nakozongisa bango na Patrosi, mokili ya bakoko na bango ; mpe kuna, bakokoma kaka mwa bokonzi moko ya moke. \v 15 Ejipito ekokoma mokili moko moke koleka mikili mosusu, ekomikumisa lisusu te liboso ya bikolo mosusu ; nakokomisa yango moke penza mpo ete ezala lisusu na makoki te ya kokonza bikolo mosusu. \v 16 Mokili ya Ejipito ekozala lisusu mpo na bana ya Isalaele mokili ya kotiela motema te, kasi ekokoma lokola ekaniseli ya masumu oyo bato na Ngai bazalaki kosala tango bazalaki koluka lisungi epai na yango. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Nkolo Yawe. › » \p \v 17 Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, na mobu ya tuku mibale na sambo, Yawe alobaki na ngai : \p \v 18 « Mwana na moto, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, alendisaki makasi mampinga na ye mpo na kobundisa engumba Tiri ; mito ya basoda nyonso ekomaki mabandi mpe mapeka na bango elongwaki-longwaki baposo. Nzokande, ye mpe mampinga na ye batikalaki kozwa litomba ata moko te na mosala na bango ya kobundisa engumba Tiri. \v 19 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakokaba Ejipito na maboko ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni ; mpe ye, akobotola bomengo na yango, akozwa bomengo ya bitumba mpe akobebisa yango nyonso penza. \v 20 Napesi epai ya Nabukodonozori mokili ya Ejipito lokola lifuti mpo na misala na ye, pamba te ye mpe mampinga na ye basalaki mpo na Ngai, elobi Nkolo Yawe. \v 21 Na mokolo wana, nakobimisa liseke mpo na libota ya Isalaele ; nakofungola monoko na yo kati na bango, mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. » \c 30 \s1 Nzembo ya mawa mpo na Ejipito \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \q1 \v 2 « Mwana na moto, sakola ! Loba : \q2 ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q1 Bolela mpe boloba : \q2 ‘ Mawa mpo na mokolo wana ! ’ \q1 \v 3 Pamba te mokolo yango ekomi pene ; \q2 mokolo ya Yawe ekomi pene, \q2 mokolo ya mapata, tango ya molili mpo na bikolo. \q1 \v 4 Mopanga ekotelemela Ejipito, \q2 mpe somo makasi ekokanga mokili ya Kushi. \q1 Tango bato bakokufa na Ejipito, \q2 bakomema bomengo na yango mosika \q2 mpe miboko na yango ekobukana. \m \v 5 Kushi, Puti, Ludi, Arabi mobimba, Libi mpe bato ya mokili ya boyokani bakokufa na mopanga nzela moko na bato ya Ejipito. \q1 \v 6 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q2 Bikolo oyo esanganaki na Ejipito ekokweya \q1 mpe makasi oyo etielaka lolendo ekosila. \q2 Kobanda na Migidoli kino na Siene, \q1 bakokweya na mopanga elongo na Ejipito, \q2 elobi Nkolo Yawe. \q1 \v 7 Ejipito ekotikala lisusu na bato te \q2 kati na mikili oyo etikala na bato te, \q1 mpe bingumba na yango ekokoma ebeba \q2 kati na bingumba oyo ebeba. \q1 \v 8 Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, \q2 tango nakokitisa moto kati na Ejipito \q2 mpe nakosukisa nguya nyonso ya basungi na yango. \p \v 9 Na mokolo wana, bato oyo nakotinda bakokende na nzela ya masuwa mpo na kobundisa Kushi oyo ezali na yango na kimia. Somo makasi ekokanga bango na mokolo ya etumbu ya Ejipito ; mpe mokolo yango ekomi solo pene. \v 10 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakosukisa nguya ya mampinga ya Ejipito na nzela ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni. \v 11 Ye elongo na mampinga na ye ya basoda oyo baleki kanza kati na mampinga ya bikolo, bakoya kobebisa mokili. Bakobundisa Ejipito na mipanga na bango mpe bakotondisa mokili na bibembe. \v 12 Nakokawusa miluka ya Nili mpe nakokaba mokili epai ya bato mabe ; nakobebisa mokili mpe biloko nyonso oyo ezali kati na yango na nzela ya maboko ya bapaya. Ezali Ngai Yawe nde nalobi. \b \p \v 13 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobebisa banzambe ya bikeko mpe nakosala ete bato batika kosambela bililingi kati na Mefisi. Moto moko te lisusu akozala mokambi kati na Ejipito, mpe nakoyeisa somo kati na Ejipito mobimba. \v 14 Nakobebisa engumba Patrosi, nakotia moto kati na engumba Tsoani mpe nakopesa etumbu na engumba Tebesi. \v 15 Nakopelisela engumba Sini, ndako batonga makasi ya Ejipito, kanda na Ngai ; mpe nakoboma ebele ya bavandi ya engumba Tebesi. \v 16 Nakotia moto kati na Ejipito ; engumba Sini ekotonda na pasi. Tebesi ekokoma na madusu ebele mpe banguna bakokota kati na Mefisi na moyi makasi, mpo na kobebisa yango. \v 17 Bilenge mibali ya bingumba Eliopolisi mpe Pi-Beseti bakokufa na mopanga, mpe bingumba yango ekokende na bowumbu. \v 18 Na Takipenesi, mokolo ekokoma molili tango nakobuka ekangiseli ya Ejipito ; mpe kuna, makasi na yango oyo etielaka lolendo ekosila ; mapata ekozipa engumba Takipenesi mpe bamboka na yango ya mike ekokende na bowumbu. \v 19 Nakopesa Ejipito etumbu ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › » \p \v 20 Na mokolo ya sambo ya sanza ya liboso, na mobu ya zomi na moko, Yawe alobaki na ngai : \p \v 21 « Mwana na moto, tala ; nabukaki loboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito ! Moto moko te azali kosalisa yango to mpe kotia yango kisi mpo ete ekoka lisusu kozwa makasi ya kosimba mopanga. \v 22 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natelemeli Faraon, mokonzi ya Ejipito ; nakobuka maboko na ye nyonso mibale : ezala loboko oyo ya malamu to loboko oyo ebukana ; mpe nakosala ete mopanga ekweya longwa na loboko na ye. \v 23 Nakopanza mpe nakopalanganisa bato ya Ejipito kati na bikolo mpe mikili mosusu. \v 24 Nakolendisa maboko ya mokonzi ya Babiloni mpe nakotia mopanga na Ngai kati na loboko na ye. Kasi nakobuka maboko ya Faraon, mpe akokoma kolela liboso na ye lokola moto oyo azoki pota monene. \p \v 25 Nakolendisa maboko ya mokonzi ya Babiloni, kasi maboko ya Faraon ekolemba. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakotia mopanga na Ngai kati na loboko ya mokonzi ya Babiloni, oyo akobundisa na yango Ejipito. \v 26 Nakopanza mpe nakopalanganisa bato ya Ejipito kati na bikolo mpe mikili mosusu ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. » \c 31 \s1 Lisese ya nzete ya sedele \p \v 1 Na mokolo ya liboso ya sanza ya misato, na mobu ya zomi na moko, Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe na mampinga na ye nyonso : \q1 ‹ Nani penza akoki kokokana na yo na lokumu ? \q1 \v 3 Tala mokili ya Asiri malamu ! \q2 Ezalaki lokola nzete ya sedele kati na Libani : \q1 bitape na yango ezalaki kitoko \q2 mpe na makasa ebele oyo ezalaki kopesa pio \q1 koleka banzete nyonso ya zamba ; \q2 elekaki banzete nyonso ya zamba na molayi, \q2 songe na yango ezalaki ekenda kino na mapata. \q1 \v 4 Mayi ezalaki kokolisa yango, \q2 mpe mayi ya se ya mabele ezalaki koyeisa yango molayi ; \q1 ebimisaki miluka zingazinga ya esika oyo balonaki yango \q2 mpe epanzanaki kino na banzete nyonso ya zamba. \q1 \v 5 Boye, nzete yango ekomaki molayi makasi \q2 koleka banzete nyonso ya zamba ; \q1 bitape na yango ekomaki milayi, \q2 mpe makasa na yango ekomaki ebele, \q2 pamba te ezalaki kozwa mayi ebele. \q1 \v 6 Bandeke nyonso ya likolo ezalaki koya \q2 kotonga bazala na bitape na yango, \q1 banyama nyonso ya zamba mpe ezalaki kobota na se ya bitape na yango. \q2 Bikolo nyonso ya minene ezalaki kobika na se ya pio na yango. \q1 \v 7 Ezalaki kitoko na monene na yango \q2 mpe na molayi ya bitape na yango, \q1 pamba te misisa na yango ezalaki ekita \q2 kino na mayi minene. \q1 \v 8 Kati na elanga ya Nzambe, \q2 nzete moko te ya sedele ekokanaki na yango, \q1 nzete moko te ya sipele ekokanaki na yango na bitape, \q2 nzete moko te ya platane ekokanaki na yango na makasa : \q1 nzete moko te kati na elanga ya Nzambe ekokanaki \q2 na yango na kitoko. \q1 \v 9 Nasalaki yango kitoko makasi na bitape ebele ; \q2 bongo banzete nyonso ya Edeni, kati na elanga ya Nzambe, \q2 ezalaki kolula yango. \m \v 10 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola ekomaki molayi penza, bongo songe na yango ekendeki kino na mapata ; mpe lokola ekomaki na lolendo mpo na molayi na yango, \v 11 nakabaki yango na maboko ya nkumu ya bikolo mpo ete apesa yango etumbu oyo ekoki na mabe na yango. Nabenganaki yango ; \v 12 mpe bikolo ya bapaya oyo eleki kanza ekweyisaki yango mpe asundolaki yango ; makasa na yango ekweyaki na bangomba mpe na mabwaku nyonso, bitape na yango ebukanaki mpe ekweyaki na mabulu nyonso ya minene ya mokili. Bikolo nyonso ya mabele ekimaki wuta na se ya pio na yango mpe esundolaki yango ; bongo etikalaki yango moko. \v 13 Bandeke nyonso ya likolo ekomaki kovanda na mobimbi na yango oyo epola, mpe banyama nyonso ya zamba ekomaki kovanda na bitape na yango. \v 14 Boye, makambo oyo nyonso esalemaki mpo ete nzete moko te oyo elonama pembeni ya mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango mpe mpo na songe na yango oyo ekenda kino na mapata ; mpe mpo ete terebente moko te oyo ezali kozwa mayi ekoma na lolendo mpo na molayi na yango. Pamba te, yango nyonso etangama ete ekokufa, ekokita kino na mokili ya se ya mabele, kati na bakufi, elongo na bato oyo bakitaka na se ya libulu ya kufa. \s1 Kati na libulu \p \v 15 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo nzete ya sedele ekitaki na se ya mokili ya bakufi, napesaki mitindo ete mayi oyo ya se ya mabele esala matanga mpo na yango. Likolo na yango, nazipaki mayi ya se ya mabele, nakangaki bibale na yango mpe mayi minene ekangamaki ; nazipaki zamba ya Libani na molili mpe nakawusaki banzete nyonso ya elanga. \v 16 Nalengisaki bikolo na lokito ya kokweya na yango, tango nakitisaki yango na mboka ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu ya kufa. Boye, banzete nyonso ya Edeni, oyo eleki kitoko, mpe banzete ya Libani, oyo eleki kitoko, banzete nyonso oyo ezalaki kozwa mayi malamu, ebondisamaki na se ya mabele. \v 17 Yango mpe ekitaki, elongo na nzete ya sedele, na mokili ya bakufi, epai ya bato oyo bakufaki na mopanga, oyo basanganaki na yango mpo na kovanda na se ya pio na yango kati na bikolo. \p \v 18 Nzete nini kati na Edeni ekokani na yo na monene mpe na lokumu ? Nzokande, yo mpe okokita, elongo na banzete ya Edeni, na mokili ya se ya mabele ; okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, elongo na bato oyo bakufaki na mopanga. \p Ndenge wana nde Faraon elongo na bato na ye bakosuka, elobi Nkolo Yawe. › » \c 32 \s1 Nzembo ya mawa na tina na Faraon \p \v 1 Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na mibale, na mobu ya zomi na mibale, Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa mpo na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe yebisa ye : \q1 ‹ Ozali lokola nkosi kati na bikolo, \q2 ozali lokola dalagona kati na bibale minene, \q1 otambolaka-tambolaka kati na bibale na yo, \q2 opanzaka mayi na makolo na yo \q2 mpe okomisaka bibale potopoto. \q1 \v 3 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q2 Nakotiela yo motambo na Ngai \q1 tango nakosangisa bato ya bikolo ebele ; \q2 boye bakokanga yo na motambo yango. \q1 \v 4 Nakobwaka yo na mabele \q2 mpe nakosundola yo na libanda ya bilanga. \q1 Nakosala ete bandeke nyonso ya likolo eya komatela yo \q2 mpe banyama ya mokili mobimba eya kolia \q2 misuni ya nzoto na yo. \q1 \v 5 Nakopanza misuni ya nzoto na yo na bangomba \q2 mpe nakotondisa mabwaku na biteni oyo ekotikala. \q1 \v 6 Nakotondisa mokili, \q2 na makila oyo ekowuta epai na yo, \q1 na balabala nyonso kino na bangomba ; \q2 mpe mabulu minene ekotonda na misuni ya nzoto na yo. \q1 \v 7 Tango nakoboma yo ndenge babomaka mwinda, \q2 nakozipa likolo, nakokomisa molili minzoto na yango ; \q1 nakozipa moyi na mapata, \q2 mpe sanza ekopesa lisusu pole na yango te. \q1 \v 8 Likolo na yo, \q2 nakokomisa molili biloko nyonso ya likolo, \q1 oyo ebimisaka pole, \q2 mpe nakoyeisa molili na mokili na yo, \q2 elobi Nkolo Yawe. \q1 \v 9 Nakotungisa mitema ya bato ebele \q2 tango nakomema yo na bowumbu \q1 kati na bikolo ya bapaya, \q2 na mikili oyo otikala kutu koyeba te. \q1 \v 10 Nakosala ete bato ya bikolo ebele bakamwa yo \q2 mpe bakonzi na bango balenga na somo likolo na yo \q1 tango nakolakisa bango mopanga na Ngai. \q2 Na mokolo ya kokweya na yo, \q1 moko na moko kati na bango akokoma kolenga \q2 tango nyonso mpo na bomoi na ye. \p \v 11 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q1 Mopanga ya mokonzi ya Babiloni \q2 ekobundisa yo. \q1 \v 12 Nakosala ete bato ebele bakufa kati na yo \q2 na mopanga ya bilombe ya bitumba \q1 ya ekolo oyo eleki bikolo nyonso na kanza. \q2 Bakosukisa lolendo ya mokili ya Ejipito \q2 mpe bato na yango nyonso bakobebisama. \q1 \v 13 Nakoboma ngombe na yango nyonso \q2 pembeni ya mayi ya mozindo oyo ekoningana lisusu te \q2 na makolo ya bato to ya banyama. \q1 \v 14 Bongo nakosala ete mayi na yango evanda kimia \q2 mpe bibale na yango etiola lokola mafuta, \q2 elobi Nkolo Yawe. \q1 \v 15 Tango nakosala ete Ejipito etikala lisusu na bato te, \q2 tango nakobebisa biloko nyonso \q1 oyo ezali kati na yango \q2 mpe nakoboma bavandi na yango nyonso ; \q1 boye bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › \p \v 16 Yango nde nzembo ya mawa oyo bakoyembela Ejipito ; bilenge basi ya bikolo mosusu nde bakoyemba yango, bakoyemba yango na tina na Ejipito elongo na bato na yango nyonso, elobi Nkolo Yawe. » \p \v 17 Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza wana kaka, na mobu ya zomi na mibale, Yawe alobaki na ngai : \p \v 18 « Mwana na moto, tinda nzembo ya mawa na tina na bato nyonso ya Ejipito mpe kitisa na mokili ya bakufi elongo na bato oyo bakitaka na libulu, mokili ya Ejipito elongo na bato ya bikolo ya nguya. \v 19 Loba na bango : ‹ Boni, boleki bato mosusu na nini ? Bokita mpe bolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te ! › \v 20 Bakokweya kati na bato oyo bakufaki na mopanga. \q1 Mopanga esili kobima ! \q2 Tika ete eboma Ejipito mpe bato na yango nyonso ! \q1 \v 21 Wuta na mboka ya bakufi, \q2 bankumu bakoloba na Ejipito \q1 mpe na bikolo oyo esanganaki na yango : \q2 ‹ Bakiti mpe balali elongo na bato \q1 oyo bakatama ngenga te, \q2 esika moko na bato oyo bakufaki na mopanga. › \p \v 22 Mokili ya Asiri ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, ezingelami na malita ya bato na yango nyonso oyo babomaki : bango nyonso oyo bakufaki na mopanga. \v 23 Malita na bango ezali kati na libulu moko ya mozindo, mpe mampinga na yango elali zingazinga ya bakunda na ye. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo na mokili ya bato ya bomoi basili kokweya, bakufi na mopanga. \p \v 24 Mokili ya Elami ezali kuna elongo na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango ; bato na yango nyonso bakweyaki, bakufaki na mopanga. Bato nyonso oyo bazalaki koyeisa somo kati na mokili ya bato ya mokili yango basili kokita elongo na bato oyo bakatama ngenga te, na mokili ya bakufi ; bakoyoka soni bango moko elongo na bato oyo bakitaka na libulu. \v 25 Basalaki mbeto moko mpo na mokili yango kati na bato oyo bakufaki na mopanga, esika moko na mampinga na yango nyonso, zingazinga ya bakunda na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te. Lokola somo na bango epanzanaki na mokili ya bato ya bomoi, bamemaki soni na bango elongo na bato oyo bakitaka na libulu ; bazali kolala esika moko na bato oyo babomaki na mopanga. \p \v 26 Mokili ya Mesheki mpe ya Tubali ezali kuna elongo na bato na yango nyonso, zingazinga ya malita na yango. Bato nyonso oyo bakufaki na mopanga bazalaki bato bakatama ngenga te, pamba te bayeisaki somo makasi kati na mokili ya bato ya bomoi. \v 27 Boni, balali te esika moko na basoda mosusu oyo bakatama ngenga te to balali te esika moko na basoda ya mpiko oyo bakufaki mpe bakitaki na mboka ya bakufi na bibundeli na bango, na mipanga na bango na se ya mito na bango ? Etumbu mpo na masumu na bango ekweyaki na mikuwa na bango, atako bazalaki kolengisa basoda ya mpiko ya mokili ya bato ya bomoi na somo. \p \v 28 Oh Faraon, yo mpe okobukana, okolala esika moko na bato oyo bakatama ngenga te, bato oyo bakufaki na mopanga ! \p \v 29 Mokili ya Edomi ezali kuna, bakonzi na yango mpe bakambi na yango balali esika moko na bato oyo bakufaki na mopanga atako bazalaki na nguya ; balali esika moko na bato oyo bakatama ngenga te mpe bato oyo bakitaka na libulu. \p \v 30 Bakambi nyonso ya etuka ya nor mpe bato nyonso ya Sidoni bazali kuna ; bakitaki na soni elongo na bato oyo bakufaki atako nguya na bango ezalaki kopesa bato somo makasi ; balali lokola bato bakatama ngenga te elongo na bato oyo bakufaki na mopanga, mpe bakufaki na soni makasi elongo na bato oyo bakitaka na libulu. \p \v 31 Ye Faraon elongo na mampinga na ye nyonso bakomona bango mpe bakobondisama na tina na bato nyonso oyo bakufaki na mopanga, elobi Nkolo Yawe. \v 32 Atako nayeisaki somo na mokili ya bato ya bomoi na nzela na ye, Faraon mpe bato na ye nyonso bakolala kati na bato oyo bakatama ngenga te, bato oyo bakufa na mopanga, elobi Nkolo Yawe. » \c 33 \s1 Mosakoli Ezekieli : Mosenzeli \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, loba na bandeko na yo mpe yebisa bango : ‹ Soki nabimisi bitumba na mokili moko, bongo bato ya mokili yango baponi moko kati na bango lokola mokengeli na bango ; \v 3 soki mokengeli yango amoni banguna koya kobundisa mokili na bango mpe abeti kelelo mpo na kokebisa bato. \p \v 4 Soki moto moko ayoki lolaka ya kelelo, kasi azwi yango na pamba mpe mopanga ebomi ye, makila na ye ekotangama na moto na ye moko. \v 5 Lokola ayokaki lolaka ya kelelo, kasi azwaki likebisi wana na pamba, makila na ye ekotangama na moto na ye moko. Kasi soki azwaki likebisi wana na pamba te, alingaki solo kobikisa bomoi na ye. \p \v 6 Nzokande, soki mokengeli amoni banguna koya mpe abeti kelelo te mpo na kokebisa bato, bongo mopanga ebomi moko kati na bandeko na ye, ndeko wana akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto ya mokengeli. › \p \v 7 Mwana na moto, nakomisi yo mokengeli mpo na libota ya Isalaele. Boye, yokaka maloba oyo nakobanda koloba mpo na kokebisa bango na Kombo na Ngai. \v 8 Soki nalobi na moto mabe : ‹ Oh moto mabe, okokufa solo ! › Mpe yo, olobi na ye eloko moko te mpo ete abongola bizaleli na ye, moto mabe wana akokufa solo mpo na masumu na ye ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo. \p \v 9 Kasi soki okebisi moto mabe ete abongola bizaleli na ye, bongo asaleli yango te, akokufa solo mpo na masumu na ye ; mpe yo, okobikisa bomoi na yo. \p \v 10 Mwana na moto, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala maloba oyo bozali koloba : ‘ Ndenge nini penza tokoki lisusu kobika mpo ete mabe mpe masumu na biso ekomi kilo makasi mpo na biso, mpe yango ekomi kobebisa biso ? ’ › \p \v 11 Loba na bango : ‹ Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nasepelaka na kufa ya moto mabe te ; nalingaka nde ete abongola bizaleli na ye mpo ete abika ! Bobongwana, bobongwana, oh libota ya Isalaele ! Mpo na nini bolingi kaka nzela ya kufa ? › \p \v 12 Mwana na moto, loba na bandeko na yo : ‹ Boyengebene ya moto ya sembo ekobikisa ye te soki asali mabe, mpe mabe ya moto mabe ekokweyisa ye te soki atiki yango ; moto ya sembo akobika te likolo ya boyengebene na ye ya kala soki asali masumu. › \p \v 13 Ata soki nalobi na moto ya sembo ete akowumela solo na bomoi, soki atie elikya na bosembo na ye mpe asali mabe, bosembo na ye nyonso ekotangama lisusu te mpe akokufa mpo na mabe oyo asali. \v 14 Soki nalobi na moto mabe : ‹ Okokufa solo ; › kasi atiki masumu na ye mpe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima, \v 15 soki azongisi ndanga oyo asimbaki na niongo mpe biloko oyo ayibaki, soki atosi mitindo oyo epesaka bomoi mpe atiki kosala mabe, akobika penza, akokufa te. \v 16 Mabe nyonso oyo asalaki ekotangama lisusu te, akobika solo ; pamba te asali oyo ezali alima mpe sembo. \p \v 17 Bandeko na yo bazali koloba : ‹ Nkolo akataka makambo na bosembo te. › Nzokande, nzela na bango moko nde ezalaka mabe. \v 18 Soki moto ya sembo atiki boyengebene na ye mpe akomi kosala mabe, akokufa mpo na mabe yango. \v 19 Soki moto mabe akomi kosala makambo ya sembo mpe ya alima, akobika solo mpo ete asali bongo. \v 20 Oh bino, libota ya Isalaele, ndenge nini bokoki penza koloba : ‹ Nkolo akataka makambo na bosembo te ! › Solo, nakosambisa moko na moko kati na bino kolanda etamboli na ye ! » \s1 Ndimbola ya kobebisama ya Yelusalemi \p \v 21 Na mokolo ya mitano ya sanza ya zomi, na mobu ya zomi na mibale ya bowumbu na biso, moko kati na bato oyo babikaki na Yelusalemi ayaki epai na ngai mpe alobaki : « Babebisi engumba ! » \v 22 Nzokande, na pokwa, liboso ete moto yango aya epai na ngai, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai mpe afungolaki monoko na ngai liboso ete moto yango akoma epai na ngai na tongo. Monoko na ngai efungwamaki mpe nakomaki koloba. \v 23 Bongo Yawe alobaki na ngai : \p \v 24 « Mwana na moto, bavandi ya bisika oyo ebeba kati na mokili ya Isalaele bazali koloba : ‹ Abrayami azalaki kaka ye moko tango azwaki mokili lokola libula ; nzokande biso, tozali ebele ; boye, solo, mokili epesameli biso lokola libula ! › \v 25 Yango wana, loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ndenge bozali nanu kolia misuni mpe makila na yango, bongo bozali kotalela banzambe na bino ya bikeko mpe kosopa makila ya bato, bozwa solo mokili lokola libula ! \v 26 Bozali kotia elikya na mopanga na bino, bozali kosala makambo ya mbindo, mpe moko na moko kati na bino azali kokomisa mbindo mwasi ya moninga na ye, mpe bozwa penza mokili lokola libula ! › \p \v 27 Loba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na Kombo na Ngai, bato oyo batikali na bisika oyo ebeba bakokufa na mopanga ! Ba-oyo bazali na mboka, nakokaba bango epai ya banyama ya zamba mpo ete eboma bango ! Mpe ba-oyo babombami kati na bandako batonga makasi mpe kati na madusu ya mabanga bakokufa na bokono oyo ebomaka ; \v 28 nakokomisa mokili libebi mpe nakosala ete etikala lisusu na bato te : nakosukisa lolendo na yango, bangomba ya Isalaele ekotikala lisusu na bato te, mpe bato bakotika kolekela wana. \v 29 Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakokomisa mokili libebi mpe esobe, likolo ya makambo na bango nyonso ya mbindo oyo bazali kosala. › \p \v 30 Mpo na yo, mwana na moto, bandeko na yo bazali kolobana bango na bango na bamir mpe na bikuke ya bandako na bango na tina na kombo na yo : ‹ Boya koyoka maloba oyo ewuti epai na Yawe ! › \v 31 Bongo bato na Ngai bayei epai na yo ndenge kaka bayaka tango nyonso mpe bavandi liboso na yo mpo na koyoka maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te, pamba te minoko na bango ebimisaka kaka makambo oyo esepelisaka mitema na bango, mpe mitema na bango elukaka kaka bolamu na bango moko. \v 32 Mpo na bango, ozalaka na yo kaka lokola moto oyo ayembaka malamu banzembo ya kitoko, na mongongo ya kitoko, mpe abetaka mindule kitoko ; pamba te bayokaka na bango maloba na yo, kasi batiaka yango na misala te. \p \v 33 Tango makambo oyo nyonso ekokokisama —mpe ekokokisama solo— bakososola penza ete mosakoli moko azalaki kati na bango. » \c 34 \s1 Maloba ya kosambisa bakambi ya Isalaele \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela babateli bibwele ya mokili ya Isalaele ! Sakola mpe yebisa bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mawa na babateli bibwele ya Isalaele, oyo balukaka kaka bolamu na bango moko ! Boni, babateli bibwele basengeli te penza koluka bolamu ya bibwele ? \v 3 Bolingi kaka kolia mafuta na yango, kolata bilamba oyo esalemi na bapwale na yango mpe koboma bibwele oyo eleki mafuta, kasi bolukaka bolamu ya bibwele yango te ! \v 4 Bosungaki te ebwele oyo elemba mpo ete ekoka kozwa lisusu makasi, bobikisaki te oyo ezalaki na bokono, bosalisaki te oyo ebukana lokolo ; bozongisaki te na nzela, oyo ebimaki libanda ya nzela, mpe bolukaki te oyo ebungaki ; kasi nde bozalaki konyokola yango mpe komonisa yango pasi tango bozalaki kokamba yango ! \v 5 Boye, bibwele na Ngai epanzanaki bipai na bipai mpe ekomaki bilei ya banyama ya zamba, pamba te moto akobatela yango azalaki lisusu te. \v 6 Bibwele na Ngai ekomaki kotelengana na likolo ya bangomba nyonso ya milayi mpe ya mikuse, epanzanaki na mokili mobimba ; moto moko te azalaki koluka yango mpe koluka bolamu na yango. \p \v 7 Mpo na yango, bino babateli bibwele, boyoka Liloba na Yawe : \v 8 Na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, lokola bibwele na Ngai ezangi mobateli, bongo bakomi koyiba yango mpe ekomi bilei ya banyama nyonso ya zamba ; lokola babateli bibwele na Ngai bazalaki koluka bibwele na Ngai te, kasi bazalaki kaka koluka kaka bolamu na bango moko koleka bolamu ya bibwele na Ngai ; \v 9 mpo na yango, bino babateli bibwele, boyoka Liloba na Yawe : \p \v 10 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natombokeli babateli bibwele ! Nakotuna bango bibwele na Ngai, nakobotola bibwele na Ngai na maboko na bango, nakotika bango lisusu te kobatela yango. Boye, bakokoka lisusu te komilukela bolamu na bango moko. Nakokangola bibwele na Ngai na minoko na bango, mpe ekotikala lisusu bilei na bango te. \p \v 11 Pamba te, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ngai moko nakoluka bolamu ya bibwele na Ngai mpe nakobatela yango. \v 12 Ndenge mobateli bibwele alukaka bolamu ya bibwele na ye, soki azali elongo na yango, ndenge wana mpe Ngai nakobatela mpe nakobikisa bibwele na Ngai wuta na bisika nyonso epai wapi ezali ya kopanzana, na mokolo ya mapata mpe ya molili makasi. \v 13 Nakobimisa yango wuta na bikolo epai wapi ezali ya kopanzana, nakosangisa yango wuta na mikili mosusu mpe nakozongisa yango na mabele na yango moko ; nakoleisa yango na likolo ya bangomba ya Isalaele, kati na mabwaku mpe kati na bamboka nyonso ya mike ya Isalaele. \v 14 Nakoleisa yango na esika ya matiti ya kitoko, mpe matiti na yango ya kolia ekozala na likolo ya bangomba ya Isalaele ; kuna, ekopema mpe ekolia na mabele ya kitoko. \p \v 15 Ngai moko nakoleisa bibwele na Ngai, mpe Ngai moko nakopemisa yango, elobi Nkolo Yawe ; \v 16 nakoluka oyo ebungaki, nakozongisa na nzela, oyo epengwaki ; nakosalisa oyo ebukana lokolo, nakobikisa oyo ezangi makasi. Kasi nakoboma oyo ya mafuta mpe oyo ya makasi. Nakobatela bibwele na Ngai na bosembo. \s1 Maloba ya lobiko mpo na mpate \p \v 17 Mpo na bino, bibwele na Ngai, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakokata makambo kati na ebwele moko mpe ebwele mosusu, kati na bameme ya mibali mpe bantaba ya mibali. \v 18 Boni, ekoki te mpo na bino kolia na matiti ya kitoko ? Mpo na nini bolingi lisusu ete matambe na bino enyataka-nyataka matiti oyo etikali ? Ekoki te mpo na bino komela mayi ya peto ? Mpo na nini bolingi lisusu ete matambe na bino ekomisa potopoto mayi oyo etikali ? \v 19 Bolingi ete bibwele na Ngai elia matiti oyo matambe na bino enyati-nyati mpe emela mayi oyo matambe na bino ekomisi potopoto ? \p \v 20 Mpo na yango, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bango : Tala, nakokata, Ngai moko, makambo kati na ebwele oyo ya mafuta mpe oyo ekonda. \v 21 Lokola bosalelaki mipanzi mpe mapeka na bino mpo na kotindika bibwele oyo ekonda, mpe maseke na bino mpo na kobundisa yango kino kopanza yango na libanda, \v 22 nakobikisa bibwele na Ngai, mpe bakoyiba yango lisusu te ; nakokata makambo kati na ebwele moko mpe ebwele mosusu. \p \v 23 Nakotia liboso na yango mobateli moko kaka ya bibwele : Davidi, mosali na Ngai ; akoleisa yango, akoluka bolamu na yango mpe akozala mobateli na yango. \v 24 Ngai Yawe, nakozala Nzambe na yango ; mpe Davidi, mosali na Ngai, akozala mokambi kati na yango. Ngai Yawe nde nalobi. \p \v 25 Nakosala boyokani ya kimia elongo na bibwele na Ngai, nakolongola banyama mabe kati na mokili mpo ete bibwele na Ngai evanda na kimia kati na esobe mpe elala na bazamba. \v 26 Nakokomisa lipamboli esobe elongo na bazamba mpe bisika oyo ezali zingazinga ya ngomba na Ngai ya moke ; nakobetisa bamvula na tango na yango : ekozala bamvula ya mapamboli. \v 27 Banzete ya bilanga ekobota bambuma, mpe mabele ekobota biloko ebele. Bato na Ngai bakozala na kimia na mabele na bango ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe tango nakobuka banzete ya ekangiseli na bango mpe nakokangola bango na maboko ya bato oyo banyokolaka bango. \v 28 Bato ya bikolo mosusu bakoyiba bango lisusu te, mpe banyama ya zamba ekoboma bango lisusu te ; bakobika na kimia mpe eloko moko te ekoya lisusu kobangisa bango. \p \v 29 Nakobotisela bango elanga moko oyo ekokende sango mpo na bambuma na yango ; moto moko te kati na mokili akokufa lisusu na nzala mpe bato ya bikolo mosusu bakotiola bango lisusu te. \v 30 Boye, bakoyeba solo ete Ngai Yawe, Nzambe na bango, nazali elongo na bango, mpe ete bango, libota ya Isalaele, bazali bato na Ngai, elobi Nkolo Yawe. \v 31 Bino, bibwele na Ngai, bibwele oyo naleisaka, bozali bato ; mpe Ngai, nazali Nzambe na bino, elobi Nkolo Yawe. › » \c 35 \s1 Maloba ya kosambisa mokili ya Edomi \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya ngomba Seiri mpe sakola mpo na kotelemela yango ! \v 3 Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : \q1 Natombokeli yo, ngomba Seiri ! \q2 Nakosembola loboko na Ngai mpo na kotelemela yo \q2 mpe nakokomisa yo esobe mpe mokili oyo ezanga bato. \q1 \v 4 Nakobebisa bingumba na yo, \q2 mpe okotikala lisusu na bato te ; \q2 boye, okoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. \p \v 5 Lokola obokolaka tango nyonso koyina bana ya Isalaele kati na motema na yo mpe obomisaki bango na mopanga tango bazalaki na pasi makasi, na tango oyo bazwaki etumbu mpo na masumu na bango, \v 6 na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakosopa makila na yo, mpe makila ekolanda yo. Lokola ozalaki na somo te ya kosopa makila, makila ekolanda yo. \v 7 Nakokomisa ngomba Seiri esika oyo ebebisama nye mpe ezanga bato ; mpe nakoboma kuna bato nyonso oyo bakoluka kokende mpe kozonga. \v 8 Nakotondisa bangomba na yango nyonso na bibembe ; bato nyonso oyo bakokufa na mopanga bakokweya na bangomba na yo ya mike, kati na mabwaku na yo mpe na se ya bangomba na yo nyonso. \v 9 Nakokomisa yo esobe mpo na libela, bingumba na yo ekozala lisusu na bato te ; boye bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. \p \v 10 Mpo ete olobaki : ‘ Mikili oyo mibale, Isalaele mpe Yuda, elongo na bikolo na yango ekokoma ya ngai, mpe nakozwa yango, ’ atako Yawe azalaki kuna ; \v 11 mpo na yango, na Kombo na Ngai, elobi Nkolo Yawe, nakopesa yo etumbu kolanda kanda mpe zuwa na yo, oyo olakisaki mpo na kosala bango mabe mpo ete oyinaki bango ; mpe Ngai moko, nakosala ete bayeba Ngai tango nakosambisa yo. \v 12 Boye, okoyeba solo ete Ngai Yawe, nayokaki maloba nyonso ya kotiola oyo olobaki na tina na bangomba ya Isalaele. Olobaki : ‘ Tala, bangomba ebebisami ! Bakabeli biso yango lokola nyama ya kolia ! ’ \v 13 Botelemelaki Ngai mpe bolobaki na Ngai na maloba ya lolendo ; nayokaki yango Ngai moko. \v 14 Boye, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tango mokili mobimba ekozala na esengo, Ngai nakobebisa yo. \v 15 Mpo ete osepelaki na kobebisama ya libula ya Isalaele, nakosala yo mpe kaka ndenge wana : ngomba Seiri, okobebisama elongo na Edomi mobimba ; boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › » \c 36 \s1 Lisakoli mpo na bangomba ya Isalaele \p \v 1 « Mwana na moto, sakola na tina na bangomba ya Isalaele mpe loba : ‹ Bino bangomba ya Isalaele, boyoka Liloba na Yawe ! \v 2 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Moyini alobaki na tina na bino : ‘ Ah, bangomba ya kala ekomi sik’oyo ya biso ! ’ › \v 3 Yango wana, sakola ! Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola babebisaki bino mpe bapanzaki bino bipai nyonso mpo ete bokoma libula ya bikolo mosusu mpe eloko ya masolo ya kotiola mpe ya kofinga kati na bato ; \v 4 mpo na yango, bino bangomba ya Isalaele, boyoka liloba na Nkolo Yawe : Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi na bangomba ya milayi mpe ya mikuse, na mabulu mpe na mabwaku, na bisika ya libebi mpe na bingumba oyo basundola mpe babebisa, bongo bato ya bikolo mosusu ya zingazinga bayibaki mpe bakomisaki yango eloko ya kotiola ; \v 5 tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : na zuwa na Ngai ya makasi, natombokeli bikolo oyo etikali mpe mokili mobimba ya Edomi, pamba te na esengo nyonso mpe na mayele mabe kati na mitema na bango, bakomisi mokili na Ngai lokola libula na bango moko mpo ete babotola bilanga na yango nyonso na makasi. › \v 6 Mpo na yango, sakola na tina na mokili ya Isalaele mpe loba na bangomba ya milayi mpe ya mikuse, na mabulu mpe na mabwaku : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nazali koloba na zuwa mpe na kanda na Ngai ya makasi, pamba te bikolo mosusu emonisi bino pasi na kotiola. \v 7 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : nalapi ndayi, na kotombola loboko, ete ezali bikolo oyo ezingeli bino nde ekotiolama. \p \v 8 Kasi bino, bangomba ya Isalaele, bokobota bitape mpe bambuma mpo na Isalaele, bato na Ngai ; pamba te etikali kaka moke ete bazonga epai na bango. \v 9 Nazali kolandela likambo na bino mpe nazali kotala bino na liso ya ngolu ; bakobalola bino lisusu ndenge babalolaka mabele ya bilanga mpe bakolona lisusu bankona na mabele na bino. \v 10 Nakokomisa motango ya bato na bino ebele, na mabele na bino : yango nde libota mobimba ya Isalaele ; bato bakozongela lisusu kovanda kati na bingumba na bino mpe bakotonga lisusu bandako na bino oyo ebukana. \v 11 Nakokomisa motango ya bato mpe ya bibwele na bino ebele na mokili na bino : bakobotana mpe bakokoma ebele penza. Nakovandisa lisusu bato na mokili na bino ndenge ezalaka na tango ya kala mpe nakokomisa bino bato ya kofuluka koleka liboso. Boye, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. \v 12 Nakosala ete bato na Ngai, bana ya Isalaele, batambola na mokili na bino ; bakozwa mabele na bino mpe bokozala libula na bango ; bokotikala lisusu te koboma bana na bango. \p \v 13 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Lokola bato balobaka na tina na bino : Bobomaka bato mpe bozangisaka ekolo na bino bana na yango ; \v 14 mpo na yango, bokoboma lisusu bato te mpe bokozangisa lisusu ekolo na bino bana te, elobi Nkolo Yawe. \v 15 Nakosala ete boyoka lisusu kotiolama ya bikolo mosusu te, mpe bato ya bikolo mosusu bakofinga bino lisusu te ; na bongo, bokokweyisa lisusu ekolo na bino te, elobi Nkolo Yawe. › » \s1 Yawe akotonga lisusu Isalaele \p \v 16 Yawe alobaki na ngai lisusu : \p \v 17 « Mwana na moto, tango bana ya Isalaele bazalaki kovanda na mokili na bango, bazalaki kokomisa yango mbindo na ezaleli mpe na misala na bango ; ezaleli na bango ezalaki mbindo na miso na Ngai lokola makila ya mwasi oyo azali komona sanza na ye. \v 18 Boye, napeliselaki bango kanda na Ngai ya makasi, pamba te bazalaki kotangisa makila kati na mokili mpe bakomisaki yango mbindo na nzela ya banzambe na bango ya bikeko. \v 19 Napanzaki bango kati na bikolo, mpe bapalanganaki kati na mikili mosusu ; nasambisaki bango kolanda etamboli mpe misala na bango. \v 20 Nzokande, na bisika nyonso oyo bazalaki kokende, babebisaki bosantu ya Kombo na Ngai, pamba te bazalaki koloba na tina na bango : ‹ Bato wana bazali solo bato ya Yawe, kasi tala ndenge batiki mokili na Ye ! › \p \v 21 Boye, nabatelaki lokumu mpe bosantu ya Kombo na Ngai, oyo libota ya Isalaele babebisaki bosantu na yango kati na bikolo epai wapi bakendeki. \v 22 Mpo na yango, loba na libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh libota ya Isalaele, ezali mpo na bino te nde nazali kosala makambo oyo nyonso, kasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai, oyo bobebisaki kati na bikolo epai wapi bokendeki. \v 23 Nakolakisa bosantu ya Kombo monene na Ngai, oyo esambwaki kati na bikolo, Kombo oyo bobebisaki bosantu na yango kati na bikolo yango. Boye, bikolo ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, elobi Nkolo Yawe, tango nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na bino na miso na bango. \v 24 Pamba te nakobimisa bino na bikolo, nakosangisa bino wuta na bikolo mpe nakozongisa bino na mabele na bino moko. \p \v 25 Nakobwakela bino mayi ya peto, mpe bokokoma peto ; nakopetola bino na mbindo na bino nyonso mpe na mbindo ya banzambe na bino nyonso ya bikeko. \v 26 Nakopesa bino motema ya sika mpe nakotia kati na bino molimo ya sika ; nakolongola kati na bino mitema ya mabanga mpe nakopesa bino mitema ya misuni. \v 27 Nakotia Molimo na Ngai kati na bino mpe nakosala ete botosa bikateli na Ngai mpe bobatela mibeko na Ngai na bokebi. \p \v 28 Bokovanda kati na mokili oyo napesaki epai ya bakoko na bino ; bokozala bato na Ngai, mpe Ngai, nakozala Nzambe na bino. \v 29 Nakobikisa bino na mbindo na bino nyonso, nakobotisa mbuma ya ble mpe nakokomisa yango ebele penza ; bongo nakotindela bino lisusu nzala te. \v 30 Nakosala ete banzete mpe milona ya bilanga ebota ebele, mpo ete boyoka lisusu soni te na miso ya bikolo likolo ya nzala. \p \v 31 Boye, tango bokokanisa lisusu etamboli mabe na bino mpe misala na bino ya mabe, bino moko bokomiyina likolo ya masumu mpe ya misala na bino ya nkele. \p \v 32 Nalingi bososola ete nazali kosala makambo oyo mpo na bino te, elobi Nkolo Yawe ! Oh libota ya Isalaele, boyoka mawa mpe soni mpo na etamboli na bino ! \p \v 33 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo oyo nakopetola bino na masumu na bino nyonso, nakosala ete bato bazongela kovanda na bingumba na bino mpe batonga yango lisusu ; \v 34 nakosala ete basala lisusu bilanga na mabele oyo ekomaki esobe, na esika ete etikala pamba na miso ya bato nyonso oyo bakoleka wana. \v 35 Bongo, bakoloba : ‘ Mokili oyo ebebisamaki ekomi lokola elanga ya Edeni ; bingumba oyo babuka, bongo etikala lisusu na bato te mpe babebisa, elendisami lisusu mpe bato bakomi lisusu kovanda kuna. ’ \v 36 Boye, bikolo oyo ekotikala zingazinga na bino ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe ; Ngai nde natongi lisusu bingumba oyo ebukana, mpe naloni lisusu biloko oyo ebebisama. Ngai Yawe nde nalobi mpe nakokokisa yango. › \p \v 37 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mbala oyo lisusu, nakosala ete libota ya Isalaele eluka Ngai mpo ete natalisa bango ngolu na Ngai : nakosala ete bato na yango bakoma ebele lokola bibwele. \v 38 Bingumba oyo ebebisama ekotonda lisusu na bato ebele lokola bibwele oyo bapesaka na mbeka, lokola bibwele oyo bamemaka na Yelusalemi na tango ya bafeti oyo ekatama. Boye, bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. » \c 37 \s1 Emoniseli ya mikuwa ekawuka \p \v 1 Loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai ; bongo Yawe abimisaki ngai na nzela ya Molimo na Ye mpe amemaki ngai kino na kati-kati ya lubwaku moko etonda na mikuwa. \v 2 Atambolisaki ngai na bangambo nyonso kati na mikuwa yango : namonaki ete ezali ebele penza mpe ekawuka, kati na lubwaku yango. \p \v 3 Atunaki ngai : \pi1 — Mwana na moto, mikuwa oyo ekoki lisusu kozala na bomoi ? \p Nazongisaki : \pi1 — Oh Nkolo Yawe, Yo kaka nde oyebi ! \p \v 4 Bongo alobaki na ngai : \pi1 — Sakola epai ya mikuwa oyo mpe yebisa yango : « Eh bino mikuwa ekawuka, boyoka Liloba na Yawe ! \v 5 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakotia pema kati na bino mpe bokozwa lisusu bomoi. \v 6 Nakotia bino misisa mpe misuni, nakolatisa bino poso ya nzoto mpe nakotia pema kati na bino. Boye bokozwa lisusu bomoi, bongo bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. » \p \v 7 Boye, nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai. Bongo wana nazalaki nanu kosakola, makelele moko ya makasi eyokanaki ; mpe, mbala moko, mikuwa yango ekomaki koningana mpe kosangana moko na moko na mosusu. \v 8 Wana nazalaki kotala, namonaki misisa mpe misuni kobima na mikuwa yango mpe poso ya nzoto kozipa yango, kasi ezalaki na pema te. \p \v 9 Yawe alobaki na ngai : \pi1 — Mwana na moto, sakola epai ya pema, sakola mpe loba na pema : « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh pema, yaka wuta na bisika nyonso mopepe ebimelaka mpe kota kati na banzoto oyo mpo ete ezwa lisusu bomoi ! » \p \v 10 Nasakolaki ndenge kaka atindaki ngai ; bongo pema ekotaki kati na yango mpe ezwaki lisusu bomoi. Batelemaki mpe bazalaki mampinga moko ya monene. \p \v 11 Alobaki na ngai : \pi1 — Mwana na moto, mikuwa oyo ezali libota mobimba ya Isalaele ! Bazali koloba : « Mikuwa na biso ekawuki, elikya na biso esili, bomoi na biso ebebi ! » \v 12 Yango wana, sakola mpe loba na bango : « Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh bato na Ngai, nakofungola bakunda na bino mpe nakobimisa bino kuna, bongo nakozongisa bino na mabele ya Isalaele. \v 13 Mpe bino, bato na Ngai, bokoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, tango nakofungola bakunda na bino mpe nakobimisa bino kuna ! \v 14 Nakotia Molimo na Ngai kati na bino, mpe bokozwa lisusu bomoi ; bongo nakovandisa bino na mabele na bino. Boye, bokoyeba solo ete Ngai Yawe nde nalobaki mpe nakokisaki yango, elobi Yawe. » \s1 Bomoko ya Isalaele \p \v 15 Yawe alobaki na ngai : \p \v 16 « Mwana na moto, kamata eteni ya libaya mpe koma na likolo na yango : ‹ Mpo na Yuda mpe mpo na bana ya Isalaele oyo basangani na ye. › Kamata eteni mosusu ya libaya mpe koma na likolo na yango : ‹ Mpo na Jozefi, nzete ya Efrayimi, mpe mpo na libota mobimba ya Isalaele oyo esangani na ye. › \v 17 Kangisa yango mpe komisa yango libaya moko mpo ete ezala eloko moko kati na loboko na yo. \p \v 18 Soki bandeko na yo batuni yo : ‹ Olingi koloba na biso nini ? Makambo oyo elingi kolakisa nini ? › \p \v 19 Okozongisela bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakozwa libaya ya Jozefi, oyo ezali kati na loboko ya Efrayimi, mpe bato ya mabota ya Isalaele oyo basangani na ye ; nakokangisa yango na libaya ya Yuda. Nakokomisa yango nzete moko mpe ekokoma eloko moko kati na loboko na Ngai. › \p \v 20 Okosimba kati na loboko na yo, na miso na bango, mabaya oyo okomaki ; \v 21 mpe okoloba na bango : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakobimisa bana ya Isalaele wuta na bikolo ya zingazinga epai wapi bakendeki mpe nakozongisa bango na mabele na bango. \v 22 Nakokomisa bango ekolo kaka moko kati na mokili, na likolo ya bangomba ya Isalaele. Ekozala kaka na mokonzi moko oyo akokonza bango ; mpe bakozala lisusu bikolo mibale te to bakokabwana lisusu na bokonzi mibale te. \v 23 Bakomikomisa lisusu mbindo te na nzela ya banzambe na bango ya bikeko mpe ya bililingi na bango ya mabe to na nzela ya misala na bango ya mabe ; pamba te nakobikisa bango wuta na bisika oyo bazalaki kovanda epai wapi basalaki masumu mpe nakopetola bango ; bakozala bato na Ngai, mpe Ngai nakozala Nzambe na bango. \p \v 24 Mosali na Ngai, Davidi, akozala mokonzi na bango, mpe bango nyonso bakozala na mobateli bibwele kaka moko, bakotosa mibeko na Ngai mpe bakobatela na bokebi mitindo na Ngai. \v 25 Bakovanda lisusu na mokili oyo napesaki na Jakobi, mosali na Ngai, mokili oyo batata na bino bavandaki : bango, bana na bango ya mibali mpe bakitani na bango ya mibali bakovanda kuna mpo na libela ; mpe mosali na Ngai, Davidi, akozala mokambi na bango mpo na libela. \p \v 26 Nakosala boyokani ya kimia elongo na bango : ekozala boyokani ya libela na libela. Nakolendisa bango, nakokomisa bango ebele koleka mpe nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela. \v 27 Nakotia ndako na Ngai kati na bango ; nakozala Nzambe na bango, mpe bango, bakozala bato na Ngai. \v 28 Bongo bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete Ngai Yawe nde nakomisi Isalaele bule tango nakotia Esika na Ngai ya bule kati na bango mpo na libela. › » \c 38 \s1 Maloba ya kosambisa Gogi \p \v 1 Yawe alobaki na ngai : \p \v 2 « Mwana na moto, talisa elongi na yo na ngambo ya Gogi, ya mokili ya Magogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali ! Sakola na tina ye mpo na kotelemela ye ! \v 3 Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Natombokeli yo, Gogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali ! \v 4 Nakokembisa yo, nakotia yo bibende na mbanga, nakobimisa yo elongo na basoda na yo nyonso, mpunda na yo elongo na basoda oyo babundaka likolo ya bampunda : bango nyonso balata kitoko mpe batondi ebele, bamemi banguba minene mpe ya mike mpe bayebi malamu kosalela mipanga. \v 5 Basoda ya Persi, ya Kushi mpe ya Puti, ba-oyo nyonso bamemaka banguba ya mike mpe balataka bikoti ya bibende, bakosangana na bango ; \v 6 Gomeri mpe mampinga na ye nyonso ya basoda ; libota ya Togarima, wuta na suka ya etuka ya nor, elongo na mampinga na ye nyonso ya basoda, ebele ya bato ya bikolo, bakosangana na yo mpo na kosunga yo. \p \v 7 Milengela malamu mpe bongama, yo elongo na mampinga nyonso oyo esangani na yo ! Yo nde okozala mokengeli na bango. \v 8 Na mikolo ekoya, okobengama mpo na kobunda ; na mibu oyo ekoya, okokende kobundisa mokili oyo bavandi na yango, sima na bango kobika na mopanga, basangisaki bango kati na bikolo ebele, na likolo ya bangomba ya Isalaele, oyo ekufa mpe etikala lisusu na bato te wuta kala. Bakobima wuta na bikolo mosusu mpe bakovanda na kimia. \v 9 Yo mpe mampinga na yo nyonso, elongo na bikolo ebele oyo esanganaki na yo, bokomata mpe bokopusana lokola mopepe makasi, lokola lipata oyo ezipi mokili. \p \v 10 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo wana, makanisi ekobotama na motema na yo mpe okosala mabongisi ya mabe. \v 11 Okoloba : ‘ Nakobundisa mikili oyo ebatelama malamu te, nakokende kino epai ya bato oyo bavandaka na boboto kati na kimia, bavandaka kati na bingumba oyo ezanga bamir, ezanga bikangelo mpe bikuke ; \v 12 nakokende koyiba mpe kozwa na makasi bomengo ya bitumba. Okobalola loboko na yo mpo na kobundisa bisika oyo ebeba, bongo bato bakoma lisusu kovanda kuna, bato oyo basangisa wuta na bikolo, oyo batonda na bibwele mpe na biloko ebele, oyo bavandaka na kati-kati ya mokili oyo. ’ \v 13 Bato ya Seba, ya Dedani, bato ya mombongo ya Tarsisi, elongo na bamboka na yango nyonso ya mike bakoloba na yo : ‘ Boni, oyei solo mpo na kozwa na makasi bomengo ya bitumba ? Boni, osangisi mampinga na yo mpo na kobotola palata mpe komema wolo, mpo na kozwa bibwele mpe kobotola biloko to mpo na kozwa biloko ebele ? ’ › \p \v 14 Yango wana, mwana na moto, sakola ! Loba na Gogi : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo wana, tango bato na Ngai, Isalaele, bakovanda na kimia, boni, okoyeba yango te ? \v 15 Okowuta na bisika na yo, mosika kuna na etuka ya nor, yo mpe bikolo ebele elongo na yo ; bango nyonso likolo ya bampunda, bato ebele, mampinga ya basoda ebele ya nguya. \v 16 Okoya kobundisa libota na Ngai, Isalaele, ndenge mapata ezipaka mokili. Oh Gogi, na mikolo ekoya, nakosala ete obundisa mokili na Ngai mpo ete bikolo mosusu eyeba Ngai tango Ngai moko nakomonisa bosantu na Ngai na nzela na yo na miso na bango. \p \v 17 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Boni, ezali yo te oyo na tina na nani nalobelaki na tango ya kala na nzela ya basali na Ngai, basakoli ya Isalaele, oyo basakolaki na tango wana, na mibu ebele, ete nakotinda yo mpo ete obundisa bato na Ngai ? \p \v 18 Na mokolo yango, mokolo oyo Gogi akobundisa mabele ya Isalaele, tala makambo oyo ekosalema : kanda na Ngai ekopela makasi, elobi Nkolo Yawe. \v 19 Na zuwa mpe kanda na Ngai ya makasi, nalobi ete na tango wana, mabele ekoningana makasi kati na Isalaele. \v 20 Bambisi ya ebale, bandeke ya likolo, banyama ya zamba, bikelamu nyonso oyo etambolaka na libumu mpe bato nyonso oyo bazali awa na mabele bakolenga liboso na Ngai ; bangomba ekopanzana, mabanga minene ekobukana mpe bamir nyonso ekokweya na mabele. \v 21 Nakobengisa mopanga mpo na kobundisa Gogi, na bangomba na Ngai nyonso, elobi Nkolo Yawe. Mopanga ya moto na moto ekoboma ndeko na ye. \v 22 Nakotindela ye bokono oyo ebomaka mpe nakotangisa makila na ye lokola etumbu ; nakotindela mampinga na ye mpe bikolo oyo ekosangana na ye mvula makasi, mvula ya mabanga mpe ya moto. \v 23 Na nzela wana, nakomonisa monene mpe bosantu na Ngai, mpe nakosala ete bato ya bikolo ebele bayeba Ngai ; boye bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. › \c 39 \p \v 1 Mwana na moto, sakola mpo na kotelemela Gogi ! Loba : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh Gogi, mokambi ya liboso ya Mesheki mpe ya Tubali, natombokeli yo ! \v 2 Nakozongisa yo mpe nakotambolisa yo ; nakomema yo longwa na suka ya etuka ya ngambo ya nor mpe nakosala ete okoma na likolo ya bangomba ya Isalaele. \v 3 Nakobuka tolotolo na yo oyo osimbi na loboko ya mwasi mpe nakokweyisa likonga oyo osimbi na loboko ya mobali. \v 4 Yo, mampinga na yo nyonso ya basoda mpe bato ya bikolo oyo bakosangana na yo, bokokweya na likolo ya bangomba ya Isalaele ; nakokaba yo lokola bilei epai ya bandeke nyonso oyo eliaka misuni mpe epai ya banyama ya zamba. \v 5 Okokweya solo na zamba, pamba te ezali Ngai nde nalobaki, elobi Nkolo Yawe. \v 6 Nakotinda moto kati na mokili ya Magogi mpe kati na bato oyo bavandi na kimia kati na bisanga ; mpe bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe. \v 7 Nakosala ete bosantu ya Kombo na Ngai eyebana kati na bato na Ngai, Isalaele ; nakotika lisusu te ete bosantu ya Kombo na Ngai esambwa ; boye bikolo ekoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Mosantu kati na Isalaele. \p \v 8 Makambo wana nyonso ezali koya ! Nyonso ekokokisama, elobi Nkolo Yawe. Ezali mokolo oyo nalobelaki. \v 9 Bavandi ya bingumba ya Isalaele bakobima, bakopelisa moto, bakotumba bibundeli nyonso : banguba ya mike mpe banguba ya minene, matolotolo mpe makonga ya mike, banzete mpe makonga ya minene ; bakopelisela yango moto mibu sambo. \v 10 Bakozala na posa te ya kosangisa bakoni kati na bilanga to kokata banzete kati na bazamba, pamba te bakopelisa moto yango nde na bibundeli ; bakozwa lokola bomengo ya bitumba bato oyo bazwaki bango lokola bomengo ya bitumba, mpe bakobotola biloko ya bato oyo babotolaki bango biloko, elobi Nkolo Yawe. \p \v 11 Na mokolo wana, nakopesa Gogi lilita kati na mokili ya Isalaele : lubwaku ya bato oyo basalaka mibembo, longwa na ngambo ya este kino na ebale monene. Ekokanga nzela ya bato oyo basalaka mibembo, pamba te bakokunda Gogi elongo na mampinga na ye nyonso kuna. Bakokoma kobenga lubwaku yango lubwaku ya Amoni Gogi\f + \fr 39.11 \fr*\ft Amoni Gogi elingi koloba : mampinga ya bato ya Gogi\ft*\f*. \p \v 12 Libota ya Isalaele bakosala basanza sambo mpo na kokunda bibembe na bango kolanda ndenge ekatama mpo na kopetola mokili. \v 13 Bato nyonso ya Isalaele bakokunda bato ya Gogi ; bongo ekozala likambo ya lokumu mpo na bango, mokolo oyo nakomonisa nkembo na Ngai, elobi Nkolo Yawe. \p \v 14 Sima na basanza sambo, bakopona bato oyo mosala na bango ekozala : kotambola na mokili mpo na koluka bibembe oyo ekotikala na mabele mpe kokunda yango, na lisungi ya bato ya mobembo mpo na kopetola mokili. \v 15 Tango bakozala kotambola kati na mokili, soki moko kati na bango amoni mikuwa ya moto, akotia elembo pembeni na yango, kino tango bato oyo bakundaka bibembe bakokunda yango na lubwaku ya Amoni Gogi. \v 16 Engumba moko oyo ekobengama Amona ekotongama na esika yango. Ekozala ndenge wana nde bakopetola mokili. › \p \v 17 Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Loba na bandeke nyonso mpe na banyama nyonso ya zamba : ‹ Boya kosangana, bino nyonso elongo, wuta na bisika nyonso, mpo na mbeka na Ngai, oyo nazali kobonza Ngai moko mpo na bino, mbeka monene na likolo ya bangomba ya Isalaele ! Kuna, bokolia misuni mpe bokomela makila. \v 18 Bokolia misuni ya bilombe ya bitumba mpe bokomela makila ya bakambi ya mabele, ndenge basalaka na bameme ya mibali oyo ekemba, na bana meme ya mibali, na bantaba ya mibali to na bana ngombe ya mibali : nyonso esengeli kozala ya mafuta mpe kowuta na Bashani. \v 19 Na mbeka na Ngai, oyo nabongisi mpo na bino, bokolia mafuta kino bokotonda, mpe bokomela makila kino bokolangwa. \v 20 Na mesa na Ngai, bokolia mpe bokotonda misuni ya bampunda, ya batambolisi na yango, ya bilombe ya bitumba mpe ya basoda nyonso, › elobi Nkolo Yawe. \p \v 21 Nakomonisa lokumu na Ngai kati na bikolo ; bongo bikolo nyonso ekomona etumbu oyo napesi bango, mpe loboko na Ngai oyo nasemboli likolo na bango. \v 22 Kobanda na mokolo wana kino na mikolo ekoya, libota ya Isalaele bakoyeba solo ete Ngai, nazali Yawe, Nzambe na bango. \v 23 Mpe bato ya bikolo mosusu bakoyeba solo ete bana ya Isalaele bakendeki na bowumbu mpo na masumu na bango mpe mpo ete batambolaki na boyengebene te na miso na Ngai. Boye, napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai mpe nakabaki bango na maboko ya banguna na bango, mpe bango nyonso bakufaki na mopanga. \v 24 Napesaki bango etumbu kolanda mbindo mpe masumu na bango, mpe napesaki bango mokongo mpo na kobomba elongi na Ngai. \p \v 25 Yango wana, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Nakozongisa sik’oyo bato ya Jakobi oyo bakangamaki na bowumbu, nakoyokela libota mobimba ya Isalaele mawa mpe nakozala na zuwa makasi mpo na bosantu ya Kombo na Ngai. \v 26 Boye wana bakovanda na kimia na mabele na bango mpe ekozala na moto moko te mpo na kobangisa bango, bakobanda koyoka soni mpo na misala na bango nyonso ya botomboki mpe mpo na mabe nyonso oyo basalaki liboso na Ngai Yawe. \v 27 Tango nakozongisa bango epai na bango wuta na bikolo, tango nakosangisa bango wuta na mikili ya banguna na bango, nakomonisa bosantu na Ngai kati na bango na miso ya bikolo ebele. \v 28 Boye, bakoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bango ; pamba te atako natindaki bango na bowumbu kati na bikolo, nasangisi bango lisusu na mabele na bango moko mpe nakotika ata moto moko te kati na bango kuna. \v 29 Nakopesa bango lisusu mokongo te, pamba te nakosopa Molimo na Ngai na libota ya Isalaele, elobi Nkolo Yawe. » \c 40 \ms1 Emoniseli ya Tempelo mpe ya mokili ya sika \s1 Tempelo ya sika \p \v 1 Na mokolo ya zomi ya sanza ya liboso, sima na biso kokokisa mibu tuku mibale na mitano wuta tango tokendeki na bowumbu, na ebandeli ya mobu, ezalaki mobu ya zomi na minei sima na kobebisama ya engumba Yelusalemi, kaka na mokolo wana, loboko ya Yawe ezalaki likolo na ngai, mpe amemaki ngai kuna. \v 2 Na nzela ya bimoniseli, Nzambe amemaki ngai kati na Isalaele mpe atiaki ngai na likolo ya ngomba moko ya molayi makasi ; mpe na likolo ya ngomba yango, na ngambo ya sude, ezalaki na bandako batonga lokola engumba. \v 3 Tango amemaki ngai kuna, namonaki moto moko oyo lolenge na ye ezalaki lokola ebende ya bronze : atelemaki na ekuke ya engumba mpe asimbaki na loboko na ye singa moko ya lino mpe libaya oyo bamekelaka molayi. \v 4 Moto yango alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala na miso na yo mpe yoka na matoyi na yo ! Sala keba na makambo nyonso oyo nakolakisa yo, pamba te ezali mpo na kolakisa yo yango nde namemaki yo na esika oyo. Yebisa libota ya Isalaele makambo nyonso oyo okomona. » \s1 Longwa na Ekuke ya este kino na lopango ya libanda \p \v 5 Tala makambo oyo namonaki : mir moko ezingelaki lopango mobimba ya Tempelo. Kati na loboko ya moto yango, ezalaki na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki na bametele pene misato na molayi. Tango amekaki yango, amonaki ete monene na yango mpe bosanda na yango ezalaki ya kokokana, ezalaki na bametele pene misato. \v 6 Akendeki na ekuke oyo etala na ngambo ya este, amataki na bibutelo na yango mpe amekaki molayi ya ekotelo ya ekuke : mokuse mpe molayi na yango ezalaki na bametele pene misato. \v 7 Longwa na ekotelo kino na Tempelo, ezalaki na bandako mike ya bakengeli : misato na ngambo ya loboko ya mwasi mpe misato na ngambo ya loboko ya mobali ; molayi na yango mpe mokuse na yango ezalaki na bametele pene misato. Molayi oyo ekabolaki ndako moko ya bakengeli mpe ndako mosusu ezalaki na bametele pene misato. Longwa na ekotelo ya ekuke oyo elandaki kino na ndako moke ya kokotela oyo etalana na Tempelo, ezalaki na bametele pene misato. \v 8 Amekaki molayi ya ndako moke ya kokotela na ekuke na libaya oyo bamekelaka molayi : \v 9 ezalaki na bametele pene minei. Makonzi na yango ezalaki pene na metele moko na monene ; ndako moke ya kokotela ezalaki etala na ngambo ya Tempelo. \v 10 Ezalaki na bandako mike misato ya bakengeli, ngambo na ngambo, na ngambo ya ekuke ya este ; bandako mike nyonso misato ezalaki ekokana, mpe molayi oyo ekabolaki ndako moko ya bakengeli na ndako mosusu, ngambo na ngambo, ezalaki mpe ekokana. \p \v 11 Amekaki molayi ya ekuke : mokuse na yango ezalaki na bametele pene mitano, mpe molayi na yango ezalaki na bametele pene motoba na basantimetele tuku mitano. \v 12 Liboso ya ndako moko na moko ya bakengeli, na bangambo nyonso mibale, ezalaki na mwa mir moko oyo ezalaki na bosanda ya basantimetele pene tuku mitano, mpe ngambo moko na moko ya bandako nyonso ya bakengeli ezalaki na bametele pene misato. \v 13 Amekaki molayi ya ekuke, longwa na suka ya mir ya sima ya ndako moko ya bakengeli kino na suka ya mir ya sima ya ndako ya bakengeli mosusu oyo etalana na yango, molayi na yango ezalaki na bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano, longwa na suka moko kino na suka mosusu. \v 14 Amekaki lisusu molayi ya bandako mike nyonso misato ya bakengeli elongo na molayi oyo ezalaki kokabola ndako moko ya moke mpe ndako mosusu : nyonso esalaki bametele pene zomi na mitano, longola veranda na yango. \v 15 Longwa na ebandeli ya ekuke kino na suka ya ndako moke ya kokotela, ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano. \v 16 Bandako mike ya bakengeli elongo na makonzi na yango ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda. Na likonzi moko na moko, basalaki bililingi ya banzete ya mbila. \p \v 17 Amemaki ngai lisusu kati na lopango ya libanda. Kuna, namonaki bashambre mpe mabanga moko babongisa malamu penza, na mabele ya lopango mobimba ; na likolo ya mabanga oyo babongisa malamu, ezalaki na bashambre tuku misato. \v 18 Mabanga yango ezalaki suka na suka ya bikuke, mpe molayi na yango ezalaki ekokana na molayi ya bikuke. \v 19 Amekaki molayi ya liboso ya ekuke ya se kino na liboso ya ekuke ya lopango ya kati : ezalaki na bametele pene tuku mitano na ngambo ya este. \p \v 20 Bongo na ngambo ya nor, amekaki molayi mpe mokuse ya ekuke oyo etala na ngambo ya nor, ekuke oyo ememaka kino na lopango ya libanda. \v 21 Ezalaki na bandako na yango ya mike ya bakengeli : misato na ngambo moko mpe misato na ngambo mosusu. Makonzi na yango mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki ndenge moko na ekuke ya liboso, na molayi mpe na mokuse : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse. \v 22 Maninisa na yango, ndako na yango ya moke ya kokotela mpe bililingi na yango ya banzete ya mbila ezalaki ndenge moko na oyo ya ekuke ya ngambo ya este, na molayi mpe na mokuse. Mpo na kokota na ekuke yango, bazalaki komata na ematelo ya bibutelo sambo oyo ezalaki etalana na ndako moke ya kokotela. \v 23 Ezalaki mpe lisusu na ekuke moko kati na lopango oyo ezalaki etalana na ekuke ya ngambo ya nor, ndenge kaka ezalaki na ngambo ya este. Amekaki molayi, longwa na ekuke ya liboso kino na ekuke oyo ezalaki etalana na yango : ezalaki na bametele pene tuku mitano. \p \v 24 Amemaki ngai lisusu na ngambo ya sude, mpe namonaki ekuke moko oyo etala na ngambo ya sude ; amekaki molayi ya makonzi mpe ya ndako na yango ya moke ya kokotela : ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe mokuse. \v 25 Ekuke mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda lokola maninisa ya bikuke mosusu : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi mpe bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse. \v 26 Mpo na kokota na ekuke yango, bazalaki komata na ematelo ya bibutelo sambo oyo etalana na ndako moke ya kokotela. Bililingi ya nzete ya mbila ezalaki na makonzi na yango na bangambo nyonso. \v 27 Lopango ya kati ezalaki na ekuke moko etala na ngambo ya sude. Boye, amekaki molayi na yango, longwa na ekuke wana kino na ekuke ya libanda na ngambo ya sude : ezalaki bametele pene tuku mitano. \p \v 28 Amemaki ngai na kati ya lopango ya kati, na nzela ya ekuke ya sude ; amekaki molayi mpe mokuse ya ekuke ya ngambo ya sude : ezalaki ndenge moko kaka na bikuke mosusu. \v 29 Bandako na yango ya mike ya bakengeli, makonzi na yango mpe bandako na yango ya mike ya kokotela ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse. Ekuke mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse. \v 30 Bandako moke ya kokotela ya bikuke, zingazinga ya lopango, ezalaki na bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, mpe bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse. \v 31 Ndako na yango ya kokotela ezalaki etalana na lopango ya libanda. Batiaki bililingi ya banzete ya mbila na makonzi na yango mpe ematelo na yango ezalaki na bibutelo mwambe. \p \v 32 Amemaki ngai lisusu na lopango ya kati, na ngambo ya este, mpe amekaki molayi ya ekuke na yango : ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse. \v 33 Bandako na yango ya mike ya bakengeli, makonzi na yango mpe ndako na yango moke ya kokotela ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse. Ekuke mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse. \v 34 Ndako na yango ya kokotela ezalaki etalana na lopango ya libanda na yango ; ezalaki na bililingi ya banzete ya mbila na makonzi na yango, na bangambo nyonso, mpe ematelo na yango ezalaki na bibutelo mwambe. \p \v 35 Amemaki ngai na ekuke ya ngambo ya nor mpe amekaki molayi na yango : ezalaki ndenge moko na bikuke mosusu, na molayi mpe na mokuse. \v 36 Bandako na yango ya mike ya bakengeli, makonzi na yango mpe ndako na yango ya moke ya kokotela ezalaki mpe na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bametele pene zomi na mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse. \v 37 Ndako na yango ya kokotela ezalaki etalana na lopango ya libanda ; batiaki bililingi ya banzete ya mbila na makonzi na yango mpe ematelo na yango ezalaki na bibutelo mwambe. \p \v 38 Bandako nyonso ya mike ya kokotela ezalaki na shambre moko epai wapi bazalaki kosukola mbeka ya kotumba ; shambre yango ezalaki etalana na makonzi ya ekuke. \v 39 Kati na ndako moke ya kokotela na ekuke, ezalaki na bamesa mibale, ngambo na ngambo, epai wapi bazalaki kobomela banyama mpo na mbeka ya kotumba, mbeka ya masumu mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani. \v 40 Pene ya mir ya libanda ya ndako moke ya kokotela na ekuke, pene ya ematelo ya ekotelo ya ekuke ya nor, ezalaki na bamesa minei na ngambo moko ya ematelo. \v 41 Liboso ya ekuke, ezalaki na bamesa mwambe oyo bazalaki kobomela bambeka : minei na ngambo moko mpe minei na ngambo mosusu. \v 42 Ezalaki na bamesa minei oyo basala na mabanga bakata mpo na bambeka ya kotumba ; bazalaki kosalela yango mpo na kotia bisalelo oyo babomelaka bambeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Bamesa yango nyonso ezalaki ndenge moko : na molayi, na mokuse mpe na bosanda ; molayi na yango ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano, mokuse na yango ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango ezalaki na basantimetele tuku mitano. \v 43 Batobolaki nzela moko ya basantimetele pene mwambe na zingazinga ya bamesa moko na moko ; bazalaki kotia misuni ya bambeka na likolo ya bamesa yango. \p \v 44 Na libanda ya ekuke ya kati, kati na lopango ya kati, ezalaki na bashambre mibale mpo na bayembi : moko ezalaki na ngambo ya ekuke ya nor, etalana na ngambo ya sude, mpe mosusu ezalaki na ngambo ya ekuke ya sude, etalana na ngambo ya nor. \p \v 45 Moto yango alobaki na ngai : « Shambre oyo etala na ngambo ya sude ezali mpo na Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala na Tempelo ; \v 46 mpe shambre oyo etala na ngambo ya nor ezali mpo na Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala ya etumbelo. Kati na bakitani ya Levi, bana mibali ya Tsadoki kaka nde bakoki kokota na Tempelo mpo na kosala mosala liboso ya Yawe. » \p \v 47 Amekaki molayi ya lopango : ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi mpe na mokuse. Etumbelo ezalaki liboso ya Tempelo. \v 48 Amemaki ngai na ndako moke ya kokotela na Tempelo mpe amekaki molayi ya makonzi na yango : ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na bangambo nyonso ; mokuse ya ekotelo ezalaki na bametele pene sambo, mpe bamir na yango ya mipanzi ezalaki na metele pene moko na basantimetele tuku mitano, ngambo na ngambo. \v 49 Ndako moke ya kokotela ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe motoba na mokuse. Bazalaki komata na ematelo ya bibutelo zomi mpo na kokota na ndako moke ya kokotela, na bangambo nyonso mibale. Batelemisaki likonzi moko na ngambo moko na moko ya ekotelo. \c 41 \p \v 1 Moto yango amemaki ngai kati na eteni ya Tempelo, oyo eleki monene mpe amekaki molayi ya makonzi na yango : likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene misato na monene na bangambo nyonso. \v 2 Ekotelo na yango ezalaki na bametele pene mitano na mokuse, mpe bamir na yango ya mipanzi ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano, ngambo na ngambo, na mokuse. Amekaki lisusu molayi ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : ezalaki na bametele pene tuku mibale na molayi mpe bametele pene zomi na mokuse. \p \v 3 Bongo akotaki kati na eteni ya Tempelo, oyo eleki bule ; amekaki molayi ya makonzi ya ekotelo : moko na moko ezalaki na metele pene moko na mokuse ; ekotelo ezalaki na bametele pene misato na mokuse mpe bamir ya mipanzi ya ekotelo ezalaki na bametele pene misato na basantimetele tuku mitano na mokuse. \v 4 Amekaki molayi ya eteni oyo ezalaki sima ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : ezalaki na bametele pene zomi na molayi, mpe bametele pene zomi na mokuse ; mpe alobaki na ngai : « Oyo ezali Esika-Oyo-Eleki-Bule. » \p \v 5 Amekaki lisusu monene ya mir ya Tempelo : ezalaki na bametele pene misato ; mpe ngambo nyonso ya bashambre zingazinga ya Tempelo ezalaki na bametele pene mibale na mokuse. \p \v 6 Ezalaki na ba-etaje misato oyo moko na moko, kati na yango, ezalaki na bashambre tuku misato oyo esimbamaki na mir batonga zingazinga ya Tempelo. Bamir yango ezalaki ekangana yango na yango, kasi ezalaki ya kokangana na mir ya Tempelo te. \v 7 Longwa na etaje moko mpo na komata na etaje mosusu, bashambre ezalaki kokoma minene, pamba te bazalaki komata na etaje mosusu na ematelo oyo ezalaki zingazinga ya mir ; boye, likolo ya ndako ezalaki monene makasi. Bongo, mpo na kolongwa na etaje oyo ya se mpe kokoma na etaje oyo ya likolo, esengelaki koleka na etaje ya kati-kati. \v 8 Namonaki zingazinga ya Tempelo eloko moko batonga na likolo : ezalaki moboko ya bashambre ; molayi na yango ezalaki na bametele pene misato. \v 9 Monene ya mir ya libanda ya bashambre ya mipanzi ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano. Nzela oyo ezalaki na kati-kati ya ngambo ya bashambre ya Tempelo \v 10 mpe bashambre ya Banganga-Nzambe ezalaki na bametele pene zomi na mokuse na zingazinga ya Tempelo. \v 11 Bikuke ya bashambre ya Tempelo etalaki na nzela oyo ezalaki na bikotelo mibale : moko na ngambo ya nor mpe mosusu na ngambo ya sude. Mokuse ya nzela yango ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano. \v 12 Na ngambo ya weste, ezalaki na ndako moko etalana na lopango ya Tempelo : ezalaki na bametele pene tuku misato na mitano na mokuse ; mir ya ndako yango ezalaki na bametele pene mibale na basantimetele tuku mitano na monene, mpe bametele pene tuku minei na mitano na molayi. \p \v 13 Moto yango amekaki lisusu molayi ya Tempelo : ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi ; bongo lopango ya Tempelo mpe bamir na yango ezalaki na bametele pene tuku mitano. \v 14 Mokuse ya Tempelo mpe ya esika ya polele oyo ezalaki na ngambo ya este ezalaki mpe na bametele pene tuku mitano. \s1 Kati ya Tempelo \p \v 15 Amekaki lisusu molayi ya ndako oyo etalana na lopango, na sima ya Tempelo elongo na nzela na yango ngambo na ngambo : ezalaki na bametele pene tuku mitano. \p Kati na Tempelo, eteni oyo eleki monene, Esika ya bule ya kati mpe ndako moke ya kokotela oyo etalana na lopango, \v 16 bikotelo, maninisa ya milayi oyo batalelaka libanda mpe nzela oyo ezali kati na ba-etaje wana misato, bazipaki yango nyonso na mabaya, longwa na se kino na maninisa ya etaje ya liboso, mpe bazipaki lisusu maninisa yango nyonso. \v 17 Na esika oyo ezali likolo ya ekotelo ya libanda kino na eteni ya Tempelo, oyo eleki bule mpe na bamir ya zingazinga ya eteni ya Tempelo, oyo eleki bule mpe na libanda ya eteni ya bule ya Tempelo, \v 18 batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila. Bililingi ya banzete ya mbila ezalaki elandana na bililingi ya basheribe. Boye, Sheribe moko na moko azalaki na bilongi mibale : \v 19 elongi ya moto, na ngambo ya nzete ya mbila moko mpe elongi ya nkosi, na ngambo ya nzete ya mbila mosusu ; batiaki bililingi yango zingazinga ya Tempelo mobimba. \v 20 Batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila na mir ya libanda ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene, longwa na se kino na likolo ya ekotelo. \p \v 21 Mabaya oyo esimbaka ekuke ya Tempelo, na bangambo na yango nyonso, ezalaki ndenge moko na molayi ; mpe mabaya oyo ezalaki liboso ya eteni ya Tempelo, oyo eleki bule ezalaki mpe kaka ndenge moko. \v 22 Ezalaki na etumbelo moko ya mabaya, oyo ezalaki na metele pene moko na basantimetele tuku mitano na bosanda mpe metele moko na molayi. Basonge na yango, se na yango mpe mipanzi na yango ezalaki ya mabaya. Moto yango alobaki na ngai : « Oyo nde mesa oyo ezali liboso ya Yawe. » \p \v 23 Ezala eteni ya Tempelo, oyo eleki monene to eteni ya Tempelo, oyo eleki bule, moko na moko ezalaki na bikuke mibale : \v 24 ekuke moko na moko ezalaki na bizipelo mibale oyo ebalukaka. \v 25 Batiaki bililingi ya basheribe mpe ya banzete ya mbila na bikuke ya libanda ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene ; basalaki mwanza moke ya mabaya na liboso ya ndako moke ya kokotela. \v 26 Batiaki bililingi ya banzete ya mbila na bangambo nyonso ya bamir ya mipanzi ya ndako moke ya kokotela, oyo ezalaki na maninisa ya milayi mpo na kotalela libanda. Mpe mipanzi ya bashambre ya Tempelo ezalaki na bamwanza mike. \c 42 \s1 Bashambre ya Banganga-Nzambe \p \v 1 Moto yango amemaki ngai kino na lopango ya libanda, na nzela oyo ekenda kino na ngambo ya nor ; bongo amemaki ngai na ndako oyo ezalaki na bashambre ya Banganga-Nzambe, oyo na ngambo ya sude, etalana na Tempelo ; mpe na ngambo ya nor, etalana na mir. \v 2 Ndako yango ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi mpe tuku mibale na mitano na mokuse, mpe ekuke na yango ezalaki na ngambo ya nor. \v 3 Ezalaki na ndako moko ya etaje etalana na ndako ya ba-etaje misato oyo ezalaki na kati-kati ya lopango ya kati mpe lopango ya libanda ; molayi oyo ekabolaki ndako ya ba-etaje misato na mir ya Tempelo ezalaki na bametele pene zomi. \v 4 Nzela moko ya bametele pene mitano na mokuse mpe bametele pene tuku mitano na molayi ezalaki liboso ya bashambre yango. Bongo, bikuke na yango ezalaki na ngambo ya nor. \v 5 Bashambre ya etaje ya likolo ezalaki mike koleka bashambre ya etaje ya kati-kati mpe ya se, pamba te baveranda na yango ezalaki kozwa esika mingi koleka etaje ya kati-kati mpe ya se. \v 6 Bashambre ya etaje ya misato ezalaki na makonzi te ndenge ezalaki na lopango ya libanda. Boye, ezalaki mike koleka bashambre ya etaje ya kati-kati mpe oyo ya se. \v 7 Mir ya libanda ezalaki etalana na bashambre, mpe lopango ya libanda ezalaki liboso ya ndako ya bashambre : ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano. \v 8 Bashambre oyo ezalaki pene ya lopango ya libanda ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na molayi, mpe bashambre oyo ezalaki pene ya Tempelo ezalaki bametele pene tuku mitano na molayi. \p \v 9 Na se ya bashambre, ezalaki na ekotelo moko na ngambo ya este soki okoteli wuta na lopango ya libanda. \v 10 Bashambre yango ezalaki na ngambo ya sude, na molayi ya mir ya lopango ya libanda oyo ekenda kino na lopango ya Tempelo oyo etalana na mir ya libanda. \v 11 Mwa nzela moko ezalaki liboso na yango. Bashambre yango ezalaki ndenge moko na bashambre ya nor, na mokuse mpe na molayi ; mpe bikuke na yango ezalaki ndenge moko na monene. Bikuke ya bashambre oyo ezalaki na ngambo ya nor \v 12 ezalaki ndenge moko na bikuke ya bashambre ya ngambo ya sude. Ezalaki na ekuke moko na ebandeli ya mwa nzela oyo etalana na mir oyo ebatelaka, oyo ezali na ngambo ya este epai wapi bazalaki kokotela na bashambre. \v 13 Bongo moto yango alobaki na ngai : « Bashambre oyo ezali na ngambo ya nor mpe ya sude, oyo etalana na lopango ya Tempelo ezali bashambre ya Banganga-Nzambe ; ezali kuna nde Banganga-Nzambe oyo bapusanaka liboso ya Yawe bakobanda kolia biloko oyo eleki bule. Ezali kuna nde bakobanda komema biloko oyo eleki bule : makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani, pamba te esika yango ezali bule. \v 14 Soki bakoti kuna, Banganga-Nzambe bakoki kobima te na biteni ya bule ya Tempelo mpo na kokende na lopango ya libanda, kasi basengeli kotika bilamba oyo bazalaki kosalela mosala ya bonganga-Nzambe kuna, pamba te bilamba yango ezali bule ; bakolata bilamba mosusu liboso ya kopusana na bisika oyo ebongisami mpo na bato. » \p \v 15 Tango asilisaki komeka molayi ya kati ya Tempelo, amemaki ngai na libanda, na nzela ya ekuke ya este, mpe amekaki molayi ya lopango zingazinga ya Tempelo. \p \v 16 Amekaki molayi ya ngambo ya este na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano. \v 17 Amekaki molayi ya ngambo ya nor na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki bametele pene nkama mibale na tuku mitano. \v 18 Amekaki molayi ya ngambo ya sude na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki bametele pene nkama mibale na tuku mitano. \v 19 Amekaki molayi ya ngambo ya weste na libaya oyo bamekelaka molayi : ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano. \v 20 Amekaki bangambo nyonso minei. Ezalaki na mir moko zingazinga na yango, oyo ezalaki na bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi mpe nkama mibale na tuku mitano na mokuse ; mir yango ezalaki kokabola eteni ya bule ya Tempelo mpe eteni ya Tempelo oyo ezali bule te. \c 43 \s1 Nkembo ezongi kati na Tempelo \p \v 1 Moto yango amemaki ngai kino na ekuke oyo etala na ngambo ya este, \v 2 mpe namonaki nkembo na Nzambe ya Isalaele koya wuta na ngambo ya este. Mongongo na Ye ezalaki lokola makelele ya mayi minene, mpe mokili ekomaki kongenga na nkembo na Ye. \v 3 Emoniseli oyo namonaki ezalaki ndenge moko na oyo namonaki tango ayaki kobebisa engumba, mpe ndenge moko na oyo namonaki pembeni ya ebale Kebari. Boye, nakweyaki elongi kino na mabele. \p \v 4 Nkembo na Yawe ekotaki kati na Tempelo na nzela ya ekuke oyo etala na ngambo ya este. \p \v 5 Bongo, Molimo atombolaki ngai mpe amemaki ngai kino na lopango ya kati, mpe nkembo na Yawe etondisaki Tempelo. \v 6 Tango moto yango atelemaki pene na ngai, nayokaki mongongo ya moto koloba na ngai wuta na kati ya Tempelo. \v 7 Alobaki na ngai : « Mwana na moto, ezali awa nde kiti na Ngai ya bokonzi ezalaka, esika oyo natiaka makolo na Ngai. Ezali na esika oyo nde nakovanda mpo na libela kati na bana ya Isalaele. Libota ya Isalaele ekotikala lisusu te kokomisa Kombo na Ngai mbindo, ezala bango to bakonzi na bango, na nzela ya kindumba na bango mpe ya banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi na likolo ya bisambelo na bango ya likolo ya bangomba. \v 8 Tango batiaki bikotelo na bango pene ya ekotelo na Ngai, mabaya oyo esimbaka bikuke na bango pene ya mabaya oyo esimbaka ekuke na Ngai, bongo mir moko kaka nde ekabolaki bango na Ngai, babebisaki nde bosantu ya Kombo na Ngai na nzela ya misala na bango ya mbindo ; yango wana, Ngai mpe nabebisaki bango na kanda na Ngai. \v 9 Sik’oyo, tika ete balongola na miso na Ngai kindumba na bango mpe banzambe ya bikeko ya bakonzi na bango, oyo ezanga bomoi, mpe Ngai nakovanda kati na bango mpo na libela. \p \v 10 Mwana na moto, lakisa epai ya libota ya Isalaele ndenge Tempelo ezali mpo ete bayoka soni mpo na masumu na bango ; mpe tika ete bameka molayi mpe mokuse na yango. \v 11 Soki bayoki penza soni mpo na makambo nyonso oyo basalaki, lakisa bango ndenge nini Tempelo ezali : ndenge basalela yango, bikuke mpe bikotelo na yango, ndenge batambolisaka yango, mibeko nini balandaka mpe ndenge nini basalaka losambo ; koma yango, na miso na bango, mpo ete bakoka kolandela yango mpe kotia yango na misala. \p \v 12 Tala mobeko oyo etali Tempelo : bisika nyonso oyo ezali zingazinga ya likolo ya ngomba ekozala bule koleka. Yango nde mobeko oyo etali Tempelo. \s1 Etumbelo \p \v 13 Tala molayi mpe mokuse ya etumbelo na bametele : zingazinga ya se ya etumbelo ezalaki na libulu moko ya bozindo ya basantimetele pene tuku mitano, mpe ndenge moko na mokuse na yango ; bazingelaki yango na eloko moko evimba ya basantimetele pene mwambe. Etumbelo ezalaki, \v 14 longwa na se ya mabele kino na moboko, na metele pene moko na bosanda mpe basantimetele pene tuku mitano na mokuse ; kobanda na moboko ya moke kino na moboko ya monene, bametele pene mibale na bosanda mpe basantimetele pene tuku mitano na mokuse. \v 15 Etumbelo ezalaki na bametele pene mibale na bosanda, mpe maseke minei ezalaki likolo na yango. \v 16 Likolo ya etumbelo ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, na bangambo na yango nyonso : bametele pene motoba. \v 17 Moboko ya monene ezalaki ekokana na molayi mpe na mokuse, na bangambo na yango nyonso : bametele pene sambo. Eloko moko evimba ya basantimetele pene tuku mibale na mitano ezalaki zingazinga na yango. Mpe libulu moko ya basantimetele pene tuku mitano na bozindo ezalaki zingazinga na yango ; mpe binyatelo ya etumbelo ezalaki na ngambo ya este. » \p \v 18 Bongo alobaki na ngai : « Mwana na moto, tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Tala mibeko ya etumbelo, oyo bakosalela tango bakotonga yango mpo na kobonza mbeka ya kotumba, makabo mpe kosopela yango makila. \v 19 Okopesa mwana ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi ya libota ya Tsadoki mpe babelemaka liboso na Ngai mpo na kosalela Ngai, elobi Nkolo Yawe ; \v 20 okokamata ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na maseke minei ya etumbelo mpe na basonge minei ya moboko ya likolo mpe zingazinga ya eloko oyo evimba. Na bongo, okopetola etumbelo mpe okosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na yango. \v 21 Okokamata ngombe ya mobali mpo na mbeka ya masumu mpe okotumba yango na esika oyo babongisa na Tempelo mpo na yango, na libanda ya Esika ya bule. \p \v 22 Na mokolo ya mibale, okobonza ntaba moko ya mobali oyo ezanga mbeba lokola mbeka ya masumu ; boye, etumbelo ekokoma peto ndenge ekomaki peto na nzela ya ngombe ya mobali. \v 23 Tango okosilisa kopetola yango, okobonza mwana ngombe ya mobali mpe meme ya mobali oyo ezanga mbeba, oyo ewuti kati na etonga ya bibwele. \v 24 Okobonza yango liboso ya Yawe ; bongo, Banganga-Nzambe bakobwakela yango mungwa mpe bakobonza yango lokola mbeka ya kotumba epai na Yawe. \v 25 Mikolo sambo, okobanda kobonza, mokolo na mokolo, ntaba moko ya mobali lokola mbeka ya masumu ; okobonza lisusu mwana ngombe moko ya mobali mpe meme moko ya mobali ezanga mbeba, oyo ewuti kati na etonga ya bibwele. \v 26 Bakosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na etumbelo mpe kopetola yango mikolo sambo ; bongo nde bakopetola mpe bakobulisa yango. \v 27 Na suka ya mikolo yango, kobanda na mokolo ya mwambe kino na mikolo oyo ekolanda, Banganga-Nzambe bakobonza na etumbelo bambeka na bino ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mpe Ngai, nakoyamba bino, elobi Nkolo Yawe. » \c 44 \s1 Losambo kati na Tempelo ya sika \p \v 1 Moto yango azongisaki ngai na ekuke ya libanda ya Esika ya bule ; Ekuke yango ezalaki na ngambo ya este mpe ezalaki ya kokangama. \v 2 Yawe alobaki na ngai : « Ekuke oyo ekotikala ya kokangama, bakoki kofungola yango te, mpe moto moko te akoki kokota na nzela na yango. Ekotikala kaka ya kokangama, pamba te Yawe, Nzambe ya Isalaele, akotelaki na nzela na yango. \v 3 Kasi mokambi, ye kaka, lokola azali mokambi nde akoki kovanda na kati mpo na kolia bilei liboso ya Yawe ; akokotela na nzela ya ndako moke ya kokotela mpe akobimela kaka na nzela wana. » \p \v 4 Moto yango amemaki ngai lisusu na nzela ya ekuke ya nor kino na liboso ya Tempelo. Tango natalaki, namonaki nkembo na Yawe kotondisa Tempelo ya Yawe, mpe ngai nakweyaki elongi kino na mabele. \p \v 5 Yawe alobaki na ngai : « Mwana na moto, sala keba ! Fungola miso na yo mpe yoka na matoyi na yo makambo nyonso oyo nakoyebisa yo na tina na Tempelo mpe mitindo na yango ! Sala penza keba na ekotelo ya Tempelo mpe bikuke nyonso ya Esika ya bule. \v 6 Yebisa batomboki oyo, libota ya Isalaele : ‹ Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh libota ya Isalaele, nalembi misala na bino nyonso ya nkele ! \v 7 Wana bozalaki kobonzela Ngai bilei, mafuta mpe makila ya banyama, bokotisaki kati na Esika na Ngai ya bule bapaya oyo batosaka Ngai te mpe bakatama ngenga te, mpo na kobebisa bosantu ya Tempelo na Ngai ; na bongo, bobebisaki boyokani na Ngai mpo na kokokisa misala na bino nyonso ya mbindo ! \v 8 Na esika ete bomipesa na mosala ya biloko na Ngai ya bule, bino bozali nde kopesa mosala na Ngai epai ya bapaya, kati na Esika na Ngai ya bule. \p \v 9 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Mopaya moko te oyo atosaka Ngai te mpe oyo akatisa ngenga te akokota na Esika na Ngai ya bule, ezala bapaya oyo bazali kovanda kati na bana ya Isalaele. \s1 Mibeko mpo na Balevi \p \v 10 Balevi oyo bakomaki mosika na Ngai, tango Isalaele abungaki nzela mpe azalaki koyengayenga mosika na Ngai mpo na kolanda banzambe na bango ya bikeko, bakomema mikumba ya masumu na bango. \v 11 Kati na Esika na Ngai ya bule, bakosala kaka mosala ya kokengela bikuke ya Tempelo mpe misala mosusu ya Tempelo ; bakobanda koboma mpo na bato bambeka ya kotumba mpe bambeka mosusu mpe bakotelema liboso ya bato mpo na kosalela bango. \v 12 Kasi lokola basalelaki bango liboso ya banzambe na bango ya bikeko mpe bakweyisaki libota ya Isalaele na masumu, nalapi ndayi, na kotombola loboko, ete bakomema mikumba ya masumu na bango, elobi Nkolo Yawe. \v 13 Bakopusana lisusu liboso na Ngai te mpo na kosalela Ngai lokola Banganga-Nzambe to pene ya biloko nyonso oyo ebulisami mpo na Ngai to mpe pene ya biloko oyo eleki bule. Boye, bakolata soni ya misala na bango ya nkele. \v 14 Nakopesa bango mokumba ya kobatela Tempelo mpe kosala misala na yango nyonso, nyonso oyo esengeli kosalema kati na yango. \s1 Mibeko mpo na Banganga-Nzambe \p \v 15 Kasi Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe bakitani ya Tsadoki, oyo bakobaki kobatela na boyengebene misala na bango kati na Esika na Ngai ya bule tango bana ya Isalaele babungaki nzela na Ngai, bakopusana pene na Ngai mpo na kosalela Ngai ; bakotelema liboso na Ngai mpo na kobonza bambeka ya mafuta mpe makila ya banyama, elobi Nkolo Yawe. \v 16 Bango kaka nde bakokota na Esika na Ngai ya bule, bakopusana pene ya mesa na Ngai mpo na kosalela Ngai mpe kokokisa mosala na Ngai. \v 17 Tango bakokota na bikuke ya lopango ya kati, basengeli kolata bilamba ya lino ; bakoki kolata bilamba oyo basala na bapwale ya meme te tango bakozala kosala mosala na bikuke ya lopango ya kati to kati na Tempelo. \v 18 Bakolata bitendi ya lino na mito na bango mpe bakaputula ya lino na baloketo na bango ; bakoki kolata te bilamba oyo etokisaka bato. \v 19 Tango bakobima mpo na kokende na lopango ya libanda, na esika oyo bato bazalaka, bakolongola bilamba oyo bazalaki kosalela mosala na kati mpe bakotika yango kati na bashambre ya bule ; bakolata bilamba mosusu mpo ete babulisa bato te na nzela ya bilamba na bango. \p \v 20 Banganga-Nzambe bakoki te kokokola suki ya mito na bango to kokolisa makasi suki na bango ; kasi basengeli kokata suki na bango malamu. \v 21 Nganga-Nzambe moko te akomela masanga ya vino liboso ete akota na lopango ya kati. \v 22 Bakoki kobala te basi oyo bakufisa mibali to basi oyo bakabwana na mibali na bango na libala, kasi bakobala kaka bilenge basi ya Isalaele oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te to basi ya Banganga-Nzambe oyo basila kokufa. \p \v 23 Bakoteya bato ete bayeba kosala bokeseni kati na biloko ya bule mpe oyo ya bule te, kati na biloko ya mbindo mpe oyo ya peto. \v 24 Na tango ya matata, Banganga-Nzambe bakotelema lokola basambisi mpo na kokata makambo kolanda mibeko, bakotosa mibeko mpe bikateli na Ngai, bafeti na Ngai, oyo ekatama mpe bosantu ya mikolo na Ngai ya Saba. \p \v 25 Nganga-Nzambe moko te akomikomisa mbindo na kopusana pene ya moto ya kokufa. Nzokande, akoki kondima komikomisa mbindo soki moto oyo akufi azali tata to mama na ye, mwana na ye ya mobali to ya mwasi, ndeko na ye ya mobali to ya mwasi oyo amibalelaki te. \v 26 Sima na kopetolama na ye, akozela mikolo sambo. \v 27 Na mokolo oyo akokota kati na Esika ya bule, kati na lopango ya kati mpo na kosala mosala, akobonza mbeka mpo na masumu na ye moko, elobi Nkolo Yawe. \p \v 28 Tala oyo ekozala libula ya Banganga-Nzambe : Ngai moko nde nazali libula na bango. Bokopesa bango mabele te kati na Isalaele ; Ngai moko nde nakozala mabele na bango. \v 29 Bakolia makabo ya bambuma, bambeka ya masumu mpe bambeka ya kozongisa boyokani ; biloko nyonso oyo, kati na Isalaele, ebulisama mpo na Yawe ekozala ya bango. \v 30 Bambuma ya liboso oyo ya kitoko mpe makabo na bino nyonso, kolongola ata eloko moko te, ekozala ya Banganga-Nzambe ; bokopesa bango bambuma ya liboso ya bilanga na bino ya ble mpo ete mapamboli ezala kati na bandako na bino. \v 31 Banganga-Nzambe bakoki kolia te ndeke to nyama oyo ekufi yango moko to oyo nyama mosusu esili koboma. \c 45 \s1 Kokabolama ya mokili \p \v 1 Tango bokokabola mokili na zeke lokola libula, bokopesa epai na Yawe eteni moko lokola etuka ya bule : ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, mpe bametele nkoto mitano na mokuse. Etuka yango ekozala bule na etando na yango nyonso. \v 2 Bokotika bametele pene nkama mibale na tuku mitano na molayi, mpe bametele pene nkama mibale na tuku mitano na mokuse mpo na kotonga Esika ya bule ; bongo bokozingela yango na lopango moko ya polele ya bametele pene tuku mibale na mitano. \v 3 Kati na etuka wana ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse, bokokata eteni ya mabele mpo na Esika ya bule, Esika-Oyo-Eleki-Bule. \v 4 Ekozala eteni ya bule oyo balongoli kati na mokili : ezali ya Banganga-Nzambe oyo basalaka mosala kati na Esika ya bule mpe bapusanaka pene ya Yawe mpo na kosalela Ye ; ezali kuna nde bakotonga bandako na bango, mpe ekozala esika oyo ebulisami mpo na Esika ya bule. \p \v 5 Etuka moko ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse ekozala mpo na Balevi oyo basalaka kati na Tempelo ; lokola libula na bango, ekozala kuna nde bakotonga bingumba na bango ya kovanda. \p \v 6 Pembeni ya etuka ya bule, bokokata etando ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse mpo na kotonga engumba ; ekozala mpo na libota mobimba Isalaele. \p \v 7 Mokambi akozwa mabele oyo ezali kokabola etuka ya bule mpe mabele ya engumba ; mabele yango ekokende eteni moko na ngambo ya weste, mpe eteni mosusu na ngambo ya este. Molayi ya etuka yango ekobanda longwa na ngambo ya weste kino na mondelo ya ngambo ya este oyo etalana na moko ya biteni. \v 8 Etuka yango ekozala libula na ye kati ya Isalaele. Boye, bakambi na Ngai bakonyokola lisusu bato na Ngai te, kasi bakotika mokili na maboko ya lisanga ya Isalaele kolanda mabota na bango. \p \v 9 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Oh bakambi ya Isalaele, bino mpe bolekisi ! Botika makambo mabe mpe botika konyokola bato. Bosala makambo oyo ezali solo mpe alima. Botika kobotola bato na Ngai biloko na bango, elobi Nkolo Yawe. \v 10 Bosengeli te kosalela emekelo kilo ya lokuta, efa\f + \fr 45.10 \fr*\ft Efa ezali emekelo kilo ya mbuma. Ezali na bakilo pene tuku mibale\ft*\f* ya lokuta to bati\f + \fr 45.10 \fr*\ft Bati ezali emekelo ya biloko ya mayi. Ezali na balitele pene tuku mibale\ft*\f* ya lokuta. \v 11 Efa mpe bati ekotaka biloko ndenge moko : ekotaka ndambo moko kati na bandambo zomi ya omeri\f + \fr 45.11 \fr*\ft Omeri ezali emekelo ya biloko ya mayi. Ekotaka balitele pene nkama mibale na tuku mibale\ft*\f*. Bamekaka monene ya efa mpe bati kolanda monene ya omeri. \v 12 Mbongo moko ya ebende ya palata ekokani na bagrame zomi na mibale, mpe mine moko ekokani na mbongo ya bibende ya palata, tuku motoba. \s1 Makabo mpo na mokolo ya bafeti \p \v 13 Tala biloko oyo bokotia pembeni lokola makabo ya kopesa epai na Yawe : mpo na omeri moko ya ble mpe orje, eteni ya motoba ya efa moko. \v 14 Mobeko mpo na mafuta, bakomeka yango na bati : eteni ya zomi ya omeri moko. \v 15 Mpe bokozwa ntaba moko ya mwasi to meme moko ya mobali kati na bibwele nkama mibale, oyo ekobimela na etonga ya bibwele oyo eliaka matiti kitoko ya Isalaele. Bakosalela yango lokola likabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani, mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu ya bato, elobi Nkolo Yawe. \v 16 Bato nyonso ya mokili basengeli kolongola likabo yango mpo na mokambi kati na Isalaele. \v 17 Mokambi akozala na mokumba ya kopesa bambeka ya kotumba, makabo ya bambuma mpe makabo ya masanga ya vino na tango ya bafeti, na bafeti ya ebandeli ya sanza, ya basaba mpe na bafeti nyonso ya lisanga ya Isalaele, oyo ekatama ; akopesa mbeka ya masumu, makabo ya bambuma, mbeka ya kotumba mpe mbeka mpo na kozongisa boyokani mpo na kosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na libota ya Isalaele. \p \v 18 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okokamata mwana ngombe ya mobali oyo ezanga mbeba mpe okopetola Esika ya bule. \v 19 Nganga-Nzambe akozwa ndambo ya makila ya mbeka ya masumu, akotia yango na mabaya oyo esimbaka ekuke ya Tempelo, na basonge nyonso minei ya moboko ya etumbelo mpe na mabaya oyo esimbaka ekuke ya lopango ya kati. \v 20 Okosala ndenge moko na mokolo ya sambo ya sanza, mpo na moto nyonso oyo akosala masumu na nko te to na kozanga boyebi ; bongo nde okosala mosala ya bolimbisi masumu mpo na Tempelo. \p \v 21 Na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bokosala feti ya Pasika oyo ekosala mikolo sambo. Na mikolo wana, bokolia mapa ezanga levire. \v 22 Na mokolo yango, mokambi akopesa ngombe ya mobali lokola mbeka ya masumu mpo na ye moko mpe mpo na bato nyonso ya mokili. \v 23 Na mikolo nyonso sambo ya feti, mokonzi akopesa bangombe ya mibali sambo mpe bameme ya mibali sambo, oyo ezanga mbeba, lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, mpe ntaba moko ya mobali lokola mbeka ya masumu. \v 24 Mpo na ngombe moko na moko ya mobali, akobonza yango elongo na likabo ya bakilo zomi na mitano ya bambuma mpe likabo ya balitele misato na ndambo ya mafuta ; mpe mpo na meme moko na moko ya mobali, akobonza yango elongo na likabo ya bakilo zomi na mitano ya bambuma mpe likabo ya balitele misato na ndambo ya mafuta. \p \v 25 Na mikolo nyonso sambo ya feti oyo ebandaka na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya sambo, akobanda kobonza bambeka kaka wana : bambeka ya masumu, ya kotumba, ya bambuma mpe ya mafuta. \c 46 \p \v 1 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Ekuke ya lopango ya kati oyo etala na ngambo ya este ekozala ya kokangama mikolo motoba ; kasi na mokolo ya Saba mpe na mokolo ya feti ya ebandeli ya sanza, ekozala ya kofungwama. \v 2 Mokambi akokota na kati, wuta na libanda ; akolekela na ndako moke ya kokotela mpe akotelema na mabaya oyo esimbaka ekuke. Banganga-Nzambe bakobonza mbeka na ye ya kotumba mpe mbeka na ye ya kozongisa boyokani. Akogumbama na ekotelo ya ekuke mpe akobima na libanda, kasi ekuke ekozala ya kofungwama kino na pokwa. \v 3 Na mikolo ya bafeti ya Saba mpe ya ebandeli ya sanza, bato ya mokili bakobanda kogumbama liboso ya Yawe, na ekotelo yango. \p \v 4 Na mokolo ya Saba, mokambi akomema epai na Yawe lokola mbeka ya kotumba bana meme motoba ya mibali mpe meme moko ya mobali : nyonso esengeli ezala ezanga mbeba. \v 5 Akopesa lokola mbeka ya bambuma bakilo zomi na mitano ya bambuma mpo na meme moko ya mobali ; bongo, akopesa likabo oyo loboko na ye ekokoka mpo na bana meme ; likabo ya mafuta ekozala balitele misato na ndambo mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma. \v 6 Na mokolo na feti ya ebandeli ya sanza, akobonza mwana ngombe moko ya mobali, bana meme motoba ya mibali mpe meme moko ya mobali : nyonso esengeli ezala ezanga mbeba. \v 7 Akobakisa lokola makabo ya bambuma bakilo zomi na mitano mpo na ngombe ya mobali mpe mpo na meme ya mobali ; mpe mpo na bana meme, akopesa nyonso oyo loboko na ye ekokoka, bakisa balitele misato na ndambo ya mafuta mpo na bakilo zomi na mitano ya bambuma. \p \v 8 Tango mokambi akokota na kati, akolekela na ndako moke ya kokotela mpe akobimela kaka na nzela wana. \v 9 Mpe tango bato ya mokili bakoya liboso ya Yawe na bafeti oyo ekatama, moto nyonso oyo akokotela na ekuke ya ngambo ya nor mpo na kogumbamela Yawe akobimela na ekuke ya ngambo ya sude, mpe oyo akokotela na ekuke ya ngambo ya sude akobimela na ekuke ya ngambo ya nor. Moto moko te akobimela na ekuke oyo akotelaki, kasi akobimela na ekuke ya ngambo mosusu oyo etalana na yango. \v 10 Mokambi akozala kati na bato na ye, akokota mpe akobima elongo na bango. \p \v 11 Na tango ya bafeti mpe ya bafeti oyo ekatama, makabo ya bambuma ekozala bakilo zomi na mitano mpo na ngombe moko ya mobali, bakilo zomi na mitano mpo na meme moko ya mobali mpe nyonso oyo akolinga kopesa mpo na bana meme ya mibali ; akobakisa balitele misato na ndambo mpo na bakilo nyonso zomi na mitano ya bambuma. \p \v 12 Tango mokambi akobonzela Yawe mbeka ya kotumba to mbeka mpo na kozongisa boyokani lokola likabo oyo akati na motema na ye moko, bakofungolela ye ekuke oyo etala na ngambo ya este ; mpe akobonza mbeka na ye ya kotumba mpe mbeka na ye ya kozongisa boyokani ndenge kaka asalaka na mokolo ya Saba. Sima na yango nde akobima, mpe bakokanga ekuke sima na ye. \p \v 13 Mokolo na mokolo, okobonzela Yawe lokola mbeka ya kotumba mwana meme ya mobu moko mpe ezanga mbeba. Okobanda kobonza yango tongo nyonso. \v 14 Tongo nyonso, okobanda kobakisa na likolo na yango lokola likabo ya bambuma bakilo mibale na bagrame nkama mitano ya farine oyo bakosangisa na litele moko ya mafuta ya kitoko. Ezali likabo mpo na Yawe ; mpe ezali mibeko ya libela na libela mpo na bambeka ya tango nyonso. \v 15 Tongo nyonso, okobanda kobonza mwana meme, makabo ya bambuma mpe mafuta lokola mbeka ya kotumba ya tango nyonso. \s1 Biloko ya mokambi \p \v 16 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : Soki mokambi apesi eloko lokola kado epai ya moko kati na bana na ye ya mibali, eloko yango ekozala ya mwana yango mpe ekotikala lokola libula ya bokitani mpo na bana na ye. \v 17 Kasi soki apesi epai ya moko kati na basali na ye kado ya eloko oyo ewuti na libula na ye, kado yango ekozala ya mosali yango kino na mobu ya kokangolama na ye ; sima nde ekozonga na moboko ya mokambi, mpe libula na ye ekotikala ya bana na ye kaka. \v 18 Mokambi akoki kolongola eloko moko te kati na libula ya bato na ye mpo na kokomisa yango ya ye moko to kobengana bango na mabele na bango ; soki alingi kokabela bana na ye libula, asengeli nde kozwa yango na libula na ye moko mpo ete bato na Ngai bapanzana te mosika ya libula na bango. › » \s1 Bakikuku ya Tempelo \p \v 19 Moto yango akotisaki ngai, na nzela ya ekotelo oyo ezali pembeni ya ekuke ya ngambo ya nor, kati na bashambre ya bule ya Banganga-Nzambe, oyo etala na ngambo ya nor ; alakisaki ngai esika moko oyo ezalaki na suka, na ngambo ya weste. \v 20 Alobaki na ngai : « Awa nde esika oyo Banganga-Nzambe bakozala kolambela mbeka mpo na kozongisa boyokani, mbeka ya masumu mpe kotumbela makabo ya bambuma mpo ete ebima te na lopango ya libanda, noki te bato bakosimba biloko ya bule. » \p \v 21 Abimisaki ngai na lopango ya libanda mpe atambolisaki ngai na basonge nyonso minei ya lopango. Na songe moko na moko ya lopango, namonaki lopango mosusu. \v 22 Na basonge nyonso minei ya lopango ya libanda, ezalaki na mapango ya mike ; mpe mapango nyonso minei ezalaki ndenge moko : bametele pene tuku mibale na molayi mpe bametele pene zomi na mitano na mokuse. \v 23 Zingazinga ya moko na moko ya mapango nyonso minei, ezalaki na mir moko ya mokuse ; mpe na se na yango, batandaki mabanga mpo na kopelisa moto na zingazinga ya mir yango ya mokuse. \v 24 Moto yango alobaki na ngai : « Oyo nde bakikuku epai wapi basali ya Tempelo bakobanda kolambela misuni ya bambeka oyo bato bakobanda kobonza. » \c 47 \s1 Ebale kowuta na Tempelo \p \v 1 Moto yango azongisaki ngai pene ya ekotelo ya Tempelo epai wapi namonaki mayi kobima longwa na ekotelo na yango : ezalaki kotiola na ngambo ya este, pamba te Tempelo ezalaki etala na ngambo ya este ; mayi ezalaki kokita na se ya ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, na ngambo ya sude ya etumbelo. \v 2 Bongo abimisaki ngai na nzela ya ekuke ya nor, amemaki ngai mpe atambolisaki ngai zingazinga ya lopango ya libanda kino na ekuke ya libanda oyo etala na ngambo ya este. Mpe namonaki ete mayi yango ezali kotiola wuta na ngambo ya sude. \p \v 3 Moto yango akendeki na ngambo ya este mpe asimbaki singa oyo bamekelaka molayi na loboko na ye ; amekaki molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango esukelaki ngai na bisika oyo matambe esukela. \v 4 Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango esukelaki ngai na mabolongo. Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano, akatisaki ngai mayi, mpe mayi yango asukelaki ngai na loketo. \v 5 Amekaki lisusu molayi ya bametele pene nkama mitano ; kasi na mbala oyo, mayi yango ekomaki ebale moko ya monene oyo nazalaki lisusu ata na makoki ya kokatisa te, pamba te mayi emataki makasi mpe ekomaki mozindo koleka. \p Bongo esengelaki kaka kokata mayi (na esika ya kokatisa yango na makolo), mpo ete moto moko te azalaki na makoki ya kokatisa ebale yango. \v 6 Moto yango atunaki ngai : « Mwana na moto, boni, omoni ? » \p Bongo azongisaki ngai na ngambo ya ebale. \v 7 Tango nakomaki kuna, namonaki banzete ebele penza, na bangambo nyonso mibale ya ebale. \v 8 Moto yango alobaki na ngai : « Mayi oyo ezali kotiola na ngambo ya este ya etuka mpe ezali kokita kino na etando ya Araba epai wapi ezali komibwaka na ebale monene. Tango kaka ekotaki na mayi ya ebale monene, mayi ya ebale monene ekomaki peto. \v 9 Bipai nyonso mayi yango ezalaki koleka, bikelamu nyonso ya bomoi ezalaki kobotana, bambisi mpe ezalaki kobotana ebele ; pamba te mayi yango ezalaki kokoma kuna mpe kopetola mayi ya ebale monene. Bongo na esika nyonso oyo mayi yango ezalaki koleka, nyonso ezalaki kozwa bomoi. \v 10 Balobi mbisi bakobanda kovanda na bangambo ya ebale monene, wuta na Eyini-Gedi kino na Eyini-Egilayimi, mpo na kobwaka minyama mpe kozwa bambisi ya lolenge nyonso lokola bambisi oyo ezalaka na ebale monene. \v 11 Kasi mayi oyo etikalaka tango ebale monene etondaka mpe mayi ya bisanga ekokoma peto te, ekotikala kaka bongo mpe ekotonda na mungwa kati na yango. \v 12 Banzete ya bambuma ya ndenge na ndenge ekobota na bangambo nyonso mibale ya ebale monene. Makasa na yango ekokawuka te mpe bambuma na yango ekosila te. Sanza na sanza, ekobanda kobotaka bambuma ya sika ; pamba te ekobanda kozwa mayi oyo ekowuta na Tempelo. Bambuma na yango ekozala malamu mpo na kolia, mpe makasa na yango ekozala malamu mpo na kosalela lokola kisi. » \s1 Emoniseli ya mokili ya sika \p \v 13 Tala liloba oyo Nkolo Yawe alobi : « Tala bandelo oyo bokosalela mpo na kokabola mokili lokola libula epai ya mabota nyonso zomi na mibale ya Isalaele : bakitani ya Jozefi bakozwa biteni mibale. \v 14 Bokozwa yango ndenge moko lokola libula, na biteni ekokana ; pamba te nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya bakoko na bino, mpe ekokoma libula na bino. \b \li4 \v 15 Tala bandelo ya mokili yango : \b \li1 Na ngambo ya nor, mondelo ekobanda longwa na ebale monene to Mediterane, na nzela ya Etiloni oyo ekenda kino na Tsedadi, \v 16 Amati, Berota, Sibirayimi oyo ezalaka na kati-kati ya mondelo ya Damasi mpe Amati, kino na Atseri-Atikone oyo ezali na mondelo ya Avirani. \v 17 Boye, na ngambo ya nor, mondelo ekobanda longwa na ebale monene Mediterane kino na Atsari-Enani mpe ekolekela na mondelo ya nor ya Damasi mpe ya Amati. \li1 \v 18 Na ngambo ya este, mondelo ekobanda na kati-kati ya Avirani mpe Damasi, ekolekela na Yordani na kati-kati ya mokili ya Galadi mpe Isalaele, na ebale monene ya mungwa kino na Tamari. \li4 Yango nde ekozala mondelo ya ngambo ya este. \li1 \v 19 Na ngambo ya sude, mondelo yango ekobanda longwa na Tamari kino na mayi ya Meriba ya Kadeshi, ekolekela na Wadi kino na ebale monene Mediterane. \li4 Yango nde ekozala mondelo ya sude. \li1 \v 20 Na ngambo ya weste, ebale monene Mediterane ekozala mondelo. Mondelo yango ekobanda longwa na mondelo ya sude ya ebale monene Mediterane kino na esika oyo etalana na Lebo-Amati. \li4 Yango nde ekozala mondelo ya weste. \b \p \v 21 Bokokabola mokili yango kati na bino kolanda mabota ya Isalaele. \v 22 Bokobeta zeke mpo na kokabola yango lokola libula mpo na bino mpe bapaya oyo bavandaka kati na bino mpe babota bana kati na bino. Bokokamata bango lokola bana mboka ya Isalaele. Bango mpe bakobeta zeke mpo na kozwa libula elongo na bino kati na mabota ya Isalaele. \v 23 Boye ezali kati na libota nyonso oyo mopaya akovanda nde bokopesa ye libula na ye, » elobi Nkolo Yawe. \c 48 \s1 Kokabola mokili ya ngambo ya nor \li4 \v 1 « Tala bikolo ndenge ekomami kolanda bakombo na yango : \b \li1 Libota ya Dani ekozwa eteni moko ya mabele : \li2 mondelo na yango ekolekela na nzela ya Etiloni kino na Lebo-Amati, Atsari-Enani mpe mondelo ya nor ya mokili ya Damasi pembeni ya Amati ; \li2 boye mondelo na yango ekobanda longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. \li1 \v 2 Libota ya Aseri ekozwa eteni moko ya mabele : \li2 ekozala na mondelo ya libota ya Dani, longwa na este kino na weste. \li1 \v 3 Libota ya Nefitali ekozwa eteni moko ya mabele : \li2 ekozala na mondelo ya libota ya Aseri, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. \li1 \v 4 Libota ya Manase ekozwa eteni moko ya mabele : \li2 ekozala na mondelo ya libota ya Nefitali, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. \li1 \v 5 Libota ya Efrayimi ekozwa eteni moko ya mabele : \li2 ekozala na mondelo ya libota ya Manase, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. \li1 \v 6 Libota ya Ribeni ekozwa eteni moko ya mabele : \li2 ekozala na mondelo ya libota ya Efrayimi, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. \li1 \v 7 Libota ya Yuda ekozwa eteni moko ya mabele : \li2 ekozala na mondelo ya libota ya Ribeni, longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. \s1 Eteni ya mabele ya Yawe \li1 \v 8 Eteni ya mabele oyo bakopesa Yawe lokola likabo ya motuya ekozala na mondelo ya etuka ya Yuda : \li2 longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste ; ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na mokuse, mpe molayi na yango ekozala ndenge moko na biteni ya mabele ya mabota mosusu. \li2 Boye, Esika ya bule ekozala na kati-kati na yango. \li2 \v 9 Eteni ya mabele ya motuya oyo bokopesa Yawe lokola likabo ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse. \li2 \v 10 Eteni yango ya mabele ekozala bule mpe ekopesama mpo na Banganga-Nzambe : ekozala na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi na ngambo ya nor, bametele pene nkoto mitano na mokuse na ngambo ya weste, bametele pene nkoto mitano na mokuse na ngambo ya este mpe bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi na ngambo ya sude. Esika ya bule ya Yawe ekozala na kati-kati na yango. \li2 \v 11 Eteni yango ya mabele ekozala mpo na Banganga-Nzambe oyo babulisama, oyo bazali bakitani ya Tsadoki, mpo ete basalelaki Ngai na boyengebene mpe bapengwaki te na nzela na Ngai tango bana ya Isalaele bapengwaki ndenge mpe Balevi basalaki. \v 12 Ekozala mpo na bango lokola likabo ya motuya oyo ewuti na eteni ya mabele oyo ebulisama kati na mokili, eteni ya mabele oyo eleki na bule na bandelo ya etuka ya Balevi. \li1 \v 13 Na zingazinga ya etuka ya Banganga-Nzambe, Balevi bakozwa eteni moko ya mabele ya bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi mpe bametele pene nkoto mitano na mokuse. \v 14 Bakoki te koteka to kopesa eloko moko kati na eteni ya mabele yango na bato mosusu, pamba te yango ezali mabele oyo eleki kitoko, mpo ete ebulisama mpo na Yawe. \li1 \v 15 Eteni ya mabele oyo ekotikala, eteni ya bametele pene nkoto mibale na nkama mitano na mokuse mpe bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi, ekozala ebulisama te ; ekozala mpo na kosala misala ya engumba lokola kotonga bandako mpe kobokola bibwele ; engumba ekozala na kati-kati na yango \v 16 mpe ekozala na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, na bangambo nyonso : nor, sude, este mpe weste. \li2 \v 17 Bongo, lopango ya kobokolela bibwele ya engumba ekozala na bametele pene nkama moko na tuku mibale na mitano, na bangambo nyonso : nor, sude, este mpe weste. \li1 \v 18 Eteni ya mabele oyo ekotikala na etuka, zingazinga ya eteni ya bule, longwa na molayi na yango, ekozala na bametele pene nkoto mitano na ngambo ya este mpe bametele pene nkoto mitano na ngambo ya weste. Bambuma ya mabele na yango ekoleisa bato oyo bakosala mpo na engumba. \v 19 Basali oyo bakobanda kowuta na engumba epai wapi basalaka mpo na kosala mosala ya bilanga bakobimela na mabota nyonso ya Isalaele. \li1 \v 20 Eteni nyonso ya mabele oyo bakobulisa mpo na Yawe ekozala na molayi moko, na bangambo nyonso : bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano ndenge likabo ya motuya ezalaka ; \li2 bokolongola ndambo moko kati na bandambo minei ya eteni ya bule mpe bokosalela yango misala ya engumba. \li1 \v 21 Eteni ya mabele oyo ekotikala na bangambo nyonso mibale ya eteni ya mabele oyo ebulisama mpe ya eteni ya mabele oyo ebongisami mpo na misala ya engumba ekozala ya mokambi. Ekozala longwa na mondelo ya ngambo ya este ya eteni ya mabele oyo ebulisama, oyo ezali na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi kino na mondelo ya ngambo ya weste oyo ezali mpe na bametele pene nkoto zomi na mibale na nkama mitano na molayi. \li2 Eteni ya mabele oyo ebulisama mpe Esika ya bule ya Tempelo ekozala na kati-kati ya biteni nyonso mabele. \li2 \v 22 Boye, eteni ya mabele ya Balevi mpe eteni ya mabele oyo ebongisama mpo na misala ya engumba ekozala na kati-kati ya eteni ya mabele ya mokambi. Eteni ya mabele ya mokambi ekozala na kati-kati ya bandelo ya libota ya Yuda mpe ya libota ya Benjame. \s1 Biteni ya mabele mpo na mabota mosusu \li4 \v 23 Mpo na mabota mosusu : \b \li1 Libota ya Benjame ekozwa eteni moko ya mabele : \li2 ekobanda longwa na ngambo ya este kino na ngambo ya weste ; \li1 \v 24 Libota ya Simeoni ekozwa eteni moko ya mabele : \li2 ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Benjame na ngambo ya este kino na ngambo ya weste ; \li1 \v 25 Libota ya Isakari ekozwa eteni moko ya mabele : \li2 ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Simeoni na ngambo ya este kino na ngambo ya weste ; \li1 \v 26 Libota ya Zabuloni ekozwa eteni moko ya mabele : \li2 ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Isakari, na ngambo ya este kino na ngambo ya weste ; \li1 \v 27 Libota ya Gadi ekozwa eteni moko ya mabele : \li2 ekobanda longwa na mondelo ya mabele ya libota ya Zabuloni, na ngambo ya este kino na ngambo ya weste. \li1 \v 28 Bandelo ya mabele ya Gadi ekozala na ngambo ya sude, pene ya Negevi, longwa na Tamari kino na mayi ya Meriba ya Kadeshi ; ekolekela na Wadi kino na ebale monene Mediterane. \b \li4 \v 29 Yango nde mokili oyo bokokabola na zeke lokola libula kati na mabota ya Isalaele, libota na libota na eteni na yango ya mabele, » elobi Nkolo Yawe. \s1 Bikuke ya engumba \li4 \v 30 « Tala oyo ekozala bikuke ya engumba : \b \li1 Na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, \v 31 bikuke ya engumba ekobengama na bakombo ya mabota ya Isalaele. Na ngambo ya nor, ekozala na bikuke misato : \li2 ekuke ya Ribeni, ekuke ya Yuda, mpe ekuke ya Levi ; \li1 \v 32 Ngambo ya este, na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, ekozala na bikuke misato : \li2 ekuke ya Jozefi, ekuke ya Benjame, mpe ekuke ya Dani. \li1 \v 33 Na ngambo ya sude, na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, ekozala na bikuke misato : \li2 ekuke ya Simeoni, ekuke ya Isakari, mpe ya ekuke ya Zabuloni. \li1 \v 34 Na ngambo ya weste, na molayi ya bametele pene nkoto mibale na nkama mibale na tuku mitano, ekozala na bikuke misato : \li2 ekuke ya Gadi, ekuke ya Aseri mpe ya ekuke ya Nefitali. \b \li4 \v 35 Molayi nyonso ya mir oyo ezingeli engumba ekozala na bametele pene nkoto libwa. \b \p Mpe kobanda na tango wana, kombo ya engumba ekokoma ‹ Yawe azali awa. › »