\id EXO Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Kobima \toc1 Kobima \toc2 Kobima \toc3 Kob \mt1 Kobima \c 1 \s1 Minyoko ya bana ya Isalaele \li4 \v 1 Tala bakombo ya bana ya Isalaele oyo bakendeki na Ejipito elongo na Jakobi, moko na moko elongo na libota na ye : \b \li1 \v 2 Ribeni, Simeoni, Levi mpe Yuda ; \li1 \v 3 Isakari, Zabuloni mpe Benjame ; \li1 \v 4 Dani mpe Nefitali ; \li1 Gadi mpe Aseri. \b \li4 \v 5 Bakitani ya Jakobi bazalaki bango nyonso tuku sambo. Nzokande Jozefi amizalelaki na Ejipito. \b \p \v 6 Jozefi mpe bandeko na ye nyonso ya mibali elongo na bato ya ekeke na bango basilaki na kokufa. \v 7 Kasi bana ya Isalaele babotanaki mingi mpe bakomaki ebele penza. Bakomaki lisusu ebele koleka mpe makasi mingi : batondisaki mokili ya Ejipito. \p \v 8 Mokonzi moko ya sika, oyo ayebaki Jozefi te, azwaki bokonzi na Ejipito. \v 9 Alobaki na bato na ye : « Botala bana ya Isalaele, bakomi ebele koleka biso mpe baleki biso na makasi. \v 10 Tosengeli kosala keba mpo na bango, mpo ete bakoma lisusu ebele te. Pamba te soki bitumba ekweyi, bakoki kokende na ngambo ya banguna na biso mpe kobundisa biso mpo ete babima na mokili oyo. » \p \v 11 Boye batiaki bakonzi ya misala makasi mpo na konyokola bana ya Isalaele na nzela ya misala makasi. Na bongo, batongelaki Faraon bingumba ya Pitomi mpe ya Ramisesi mpo ete ezala bisika ya kobomba biloko. \v 12 Kasi wana bazalaki konyokola bango, bazalaki kokoba kaka kobotana mpe kokoma ebele. Bongo bato ya Ejipito bakomaki kobanga bana ya Isalaele. \v 13 Bato ya Ejipito bakotisaki bana ya Isalaele na bowumbu ya makasi \v 14 mpe bakomaki konyokola bango na misala makasi : kosala potopoto, kobeta babiliki mpe kosala misala nyonso ya bilanga. Misala nyonso oyo bazalaki kosalisa bango ezalaki ya pasi mpe ya makasi. \p \v 15 Mokonzi ya Ejipito alobaki na basi oyo babotisaka basi ya Ba-Ebre, oyo bakombo na bango ezalaki Shifra mpe Puwa : \v 16 « Tango bokobotisa basi ya Ba-Ebre, botala soki mwana nini abotami ; soki azali mwana mobali, boboma ye ; kasi soki azali mwana mwasi, botika ye na bomoi. » \p \v 17 Kasi basi oyo babotisaka babangaki Nzambe mpe basalaki te makambo oyo mokonzi ya Ejipito atindaki bango kosala ; batikaki bana mibali na bomoi. \v 18 Boye mokonzi ya Ejipito abengisaki basi oyo babotisaka mpe atunaki bango : \pi1 — Mpo na nini bosali boye ? Mpo na nini botiki bana mibali na bomoi ? \p \v 19 Basi oyo babotisaka bazongiselaki Faraon : \pi1 — Basi ya Ba-Ebre bazali lokola basi ya Ejipito te. Bazali makasi, babotaka liboso ete basi oyo babotisaka bakoma. \p \v 20 Nzambe asalaki bolamu epai ya basi oyo babotisaka. Boye bana ya Isalaele bakobaki kaka kokoma ebele mpe makasi koleka. \v 21 Lokola basi oyo babotisaka bazalaki kobanga Nzambe, Nzambe afulukisaki mabota na bango. \p \v 22 Bongo, Faraon apesaki mitindo epai ya bato na ye nyonso : « Bobwaka na ebale Nili bana mibali nyonso ya Isalaele oyo bakobotama, kasi botika na bomoi bana basi nyonso. » \c 2 \ms1 Nzambe aponi Moyize \s1 Mbotama ya Moyize \p \v 1 Mobali moko ya libota ya Levi abalaki mwasi kati na libota ya Levi. \v 2 Mwana mwasi yango azwaki zemi mpe abotaki mwana mobali. Wana amonaki ete mwana yango azali kitoko, abombaki ye basanza misato. \v 3 Lokola amonaki ete akokoka lisusu te kobomba ye, azwaki kitunga moko basala na poso ya nzete oyo babengaka papirisi, apakolaki yango gudron mpe potopoto ya mwindo ; bongo atiaki mwana kati na yango. Sima, atiaki kitunga yango kati na matiti ya ebale Nili, pembeni ya mokili. \v 4 Ndeko mwasi ya mwana yango atelemaki mosika mpo na kotala likambo oyo ekokaki kokomela ye. \p \v 5 Tango mwana mwasi ya Faraon akendeki kosukola na ebale Nili, wana basi basali na ye bazalaki kotambola pembeni ya ebale Nili, amonaki kitunga kati na matiti ya ebale ; mpe atindaki mwasi mosali na ye kozwa yango. \v 6 Afungolaki yango mpe amonaki kati na yango mwana moko ya mobali azali kolela. Ayokelaki ye mawa mpe alobaki : « Oyo azali solo mwana ya Ba-Ebre. » \p \v 7 Boye, ndeko na ye ya mwasi alobaki na mwana mwasi ya Faraon : \pi1 — Boni, nakoki kokende kolukela yo kati na basi ya Ba-Ebre mwasi oyo akoki komelisa mwana oyo mabele mpo na yo ? \p \v 8 Mwana mwasi ya Faraon azongiselaki ye : \pi1 — Iyo, kende ! \p Elenge mwasi akendeki mpe azwaki mama ya mwana mobali yango. \p \v 9 Mwana mwasi ya Faraon alobaki na mama yango : « Kamata mwana oyo, melisa ye mabele mpo na ngai, mpe nakofuta yo. » \p Bongo mama yango azwaki mwana mpe akomaki komelisa ye mabele. \v 10 Tango mwana akolaki, amemaki ye epai ya mwana mwasi ya Faraon oyo akomisaki ye mwana na ye ya mobali. Apesaki ye kombo « Moyize, » pamba te alobaki : « Nazwaki ye na mayi. » \s1 Moyize akimi na Madiani \p \v 11 Mokolo moko, wana Moyize akomaki mokolo, akendeki na esika oyo bandeko na ye bazalaki mpe amonaki bango kosala misala makasi oyo bapesaki bango mpo na konyokola bango. Amonaki moto moko ya Ejipito kobeta moko kati na bato na ye Ba-Ebre. \v 12 Atalaki ngambo na ngambo mpe amonaki moto te ; bongo abomaki moto ya Ejipito mpe akundaki ye na zelo. \v 13 Mokolo oyo elandaki, Moyize abimaki mpe amonaki Ba-Ebre mibale bazali kobunda. Atunaki na moto oyo asalaki mabe : \pi1 — Mpo na nini ozali kobeta moninga na yo ? \p \v 14 Moto wana azongisaki : \pi1 — Boni, nani akomisi yo mokonzi mpe mosambisi kati na biso ? Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto ya Ejipito ? \p Moyize abangaki mpe amilobelaki : « Solo, likambo oyo nasalaki, esili koyeba. » \p \v 15 Tango Faraon ayokaki likambo yango, alukaki nzela ya koboma Moyize ; kasi Moyize akimaki liboso ya Faraon mpe akendeki kovanda na mokili ya Madiani. \p \v 16 Moyize avandaki pembeni ya libulu ya mayi. Nzokande, Nganga-Nzambe ya Madiani azalaki na bana basi sambo. Bayaki kotoka mayi mpe batondisaki bimelelo mpo ete bamelisa bibwele ya tata na bango. \v 17 Kasi babateli bibwele bayaki mpe babenganaki bango. Moyize atelemaki, akotelaki bango mpe amelisaki bibwele na bango mayi. \p \v 18 Tango bana basi bazongaki epai ya tata na bango Reweli, atunaki bango : \pi1 — Mpo na nini lelo bozongi noki ? \p \v 19 Bango bazongisaki : \pi1 — Moto moko ya Ejipito abundelaki biso liboso ya babateli bibwele, atokelaki biso mayi mpe amelisaki bibwele. \p \v 20 Reweli atunaki bana na ye ya basi : \pi1 — Moto yango ya Ejipito azali wapi ? Mpo na nini botiki ye kuna ? Bobenga ye mpo ete aya kolia. \p \v 21 Moyize andimaki kovanda elongo na Reweli ; bongo Reweli apesaki Sefora, mwana na ye ya mwasi, mpo ete azala mwasi ya Moyize. \v 22 Sefora abotaki mwana mobali mpe Moyize apesaki ye kombo « Gerishomi, » pamba te alobaki : « Nazali mopaya na mboka mopaya. » \p \v 23 Sima na tango molayi, mokonzi ya Ejipito akufaki. Bato ya Isalaele bazalaki kolela mpe koganga na se ya pasi ya bowumbu. Bongo koganga na bango ekomaki kino epai ya Nzambe. \v 24 Nzambe ayokaki koganga na bango mpe akanisaki boyokani na Ye oyo asalaki elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi. \v 25 Nzambe atalaki bana ya Isalaele mpe asosolaki pasi na bango. \c 3 \s1 Yawe amimonisi epai ya Moyize \p \v 1 Moyize azalaki koleisa bibwele ya Jetro, bokilo na ye mpe Nganga-Nzambe ya Madiani. Amemaki bibwele mosika, kati na esobe, mpe akomaki na Orebi\f + \fr 3.1 \fr*\ft Orebi ebengami mpe Sinai, ngomba epai wapi Nzambe amimonisaki.\ft*\f*, ngomba ya Nzambe. \v 2 Kuna, Anjelu ya Yawe abimelaki ye kati na ndemo ya moto oyo ezalaki komata longwa kati na mwa nzete. Moyize amonaki nzete moke yango kopela moto, kasi ezalaki kozika te. \p \v 3 Moyize amilobelaki : « Tika ete nabaluka mpo ete natala emoniseli oyo ya kokamwa mpe nayeba mpo na nini nzete moke oyo ezali kozika te. » \p \v 4 Tango Yawe amonaki ete Moyize azali kobaluka mpo na kotala, Nzambe abengaki ye wuta na nzete moke yango : \pi1 — Moyize, Moyize ! \p Moyize azongisaki : \pi1 — Ngai oyo ! \p \v 5 Nzambe alobaki na ye : \pi1 — Kopusana awa te, longola basandale na yo na makolo na yo, pamba te esika oyo otelemi ezali mabele ya bule. \p \v 6 Alobaki lisusu : \pi1 — Nazali Nzambe ya bakoko na yo, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi. \p Boye Moyize abombaki elongi na ye, pamba te abangaki kotala Nzambe. \p \v 7 Yawe alobaki : \pi1 — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango. \v 8 Yango wana nakiti mpo na kokangola bango na maboko ya bato ya Ejipito mpe kobimisa bango na mokili oyo, mpo na kokotisa bango na mokili ya kitoko mpe ya monene, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Ezali mokili oyo evandaka bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. \v 9 Sik’oyo, koganga ya bana ya Isalaele ekomi kino epai na Ngai mpe namoni ndenge nini bato ya Ejipito bazali konyokola bango. \v 10 Yango wana natindi yo sik’oyo mpo ete okende epai ya Faraon mpo na kobimisa bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito. \p \v 11 Moyize alobaki na Nzambe : \pi1 — Ngai nazali nani mpo ete nakende epai ya Faraon mpe mpo ete nabimisa bana ya Isalaele na Ejipito ? \p \v 12 Nzambe alobaki : \pi1 — Nakozala na yo elongo. Mpe tala elembo oyo ekolakisa yo ete Ngai nde natindi yo : tango okobimisa bato na Ngai na Ejipito, bokogumbamela Nzambe na ngomba oyo. \p \v 13 Moyize alobaki na Nzambe : \pi1 — Soki nakeyi epai ya bana ya Isalaele mpe nalobi na bango : « Nzambe ya bakoko na bino atindi ngai epai na bino, » bongo soki bango batuni ngai : « Kombo na Ye nani ? » Nakoyebisa bango nini ? \p \v 14 Nzambe alobaki na Moyize : \pi1 — Ngai nazali oyo akosala. Tala makambo oyo okoloba na bana ya Isalaele : « Nazali atindi ngai epai na bino. » \p \v 15 Nzambe alobaki lisusu na Moyize : \pi1 — Loba na bana ya Isalaele : « Yawe Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, Nzambe ya Izaki, mpe Nzambe ya Jakobi, atindi ngai epai na bino. » \qm1 Yango nde Kombo na Ngai mpo na libela, \qm2 Kombo oyo bokokanisela Ngai \qm2 libela na libela. \pi1 \v 16 Boye, kende, sangisa bakambi ya Isalaele mpe loba na bango : « Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, abimelaki ngai mpe alobi : ‹ Nazwi mokano ya kobundela bino, pamba te namoni pasi na bino na Ejipito. › » \v 17 Mpe nalobi : « Nakolongola bino na minyoko ya Ejipito mpo na komema bino na mokili ya bato ya Kanana, ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. » \v 18 Bakambi ya Isalaele bakoyokela yo, bongo yo elongo na bakambi, bokokende epai ya mokonzi ya Ejipito mpe bokoloba na ye : « Yawe Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, pesa biso nzela ya kotambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokende kotumbela Yawe, Nzambe na biso, mbeka. » \v 19 Kasi nayebi ete mokonzi ya Ejipito akopesa bino te nzela ya kokende, ata soki amoni loboko na Ngai ya nguya. \v 20 Yango wana, nakosembola loboko na Ngai ; nakobeta Ejipito na nzela ya bikamwa na Ngai nyonso oyo nakosala kati na yango. Sima na yango, mokonzi ya Ejipito akotika bino kokende. \v 21 Nakosala ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito mpo ete, tango bokolongwa, bokende maboko pamba te. \v 22 Mwasi nyonso akosenga epai ya moninga na ye mpe epai ya mwasi oyo avandi na ndako na ye : biloko ya palata, ya wolo mpe bilamba. Bokopesa yango epai ya bana na bino ya mibali mpe ya basi mpo ete bamema. Na bongo nde bokosilisa biloko ya bato ya Ejipito. \c 4 \s1 Bilembo mpo na Moyize \p \v 1 Moyize azongisaki : \pi1 — Bongo soki bandimi ngai te, bayoki ngai te ? Solo, bakoloba kaka : « Yawe amonanaki na yo te. » \p \v 2 Yawe atunaki ye : \pi1 — Ozali na nini na loboko na yo ? \p Moyize azongisaki : \pi1 — Nazali na lingenda. \p \v 3 Yawe alobaki : \pi1 — Bwaka yango na mabele. \p Moyize abwakaki lingenda yango na mabele mpe ebongwanaki nyoka. Bongo Moyize akimaki mosika na yango. \p \v 4 Kasi Yawe alobaki na ye : \pi1 — Sembola loboko na yo mpe kanga nyoka yango na mokila ! \p Moyize asembolaki loboko mpe akangaki nyoka ; mpe nyoka yango ebongwanaki lisusu lingenda na loboko na ye. \p \v 5 Yawe alobaki na ye : \pi1 — Esalemi bongo mpo ete bandima solo ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi, amonanaki na yo. \p \v 6 Sima, Yawe alobaki na ye lisusu : \pi1 — Tia loboko na yo na tolo na yo. \p Moyize atiaki loboko na ye na tolo na ye ; mpe tango alongolaki yango, loboko yango ezwaki bokono ya maba ; ekomaki pembe lokola mvula ya pembe. \p \v 7 Yawe alobaki na ye : \pi1 — Sik’oyo, zongisa loboko na yo na tolo na yo. \p Moyize azongisaki loboko na ye na tolo na ye. Mpe tango alongolaki yango, loboko yango ekomaki lisusu malamu lokola biteni mosusu ya nzoto na ye. \p \v 8 Yawe alobaki na ye : \pi1 — Soki bandimi yo te to soki babeti tembe mpo na elembo ya liboso, bakondima na elembo ya mibale. \v 9 Kasi soki na bilembo oyo mibale, bandimi kaka te to bayoki te, wana okotoka mayi na ebale Nili, okosopa yango na esobe. Mayi oyo okozwa na ebale Nili ekokoma makila tango okosopa yango na mabele. \p \v 10 Moyize alobaki na Yawe : \pi1 — Ah, Nkolo, nakokaka koloba malamu te ! Yango ezali likambo ya lobi oyo eleki te to ya wuta tango obandi koloba na mosali na Yo te, pamba te nazali na monoko mpe na lolemo kilo. \p \v 11 Yawe alobaki na ye : \pi1 — Nani apesaka monoko epai ya moto ? Nani akomisaka moto baba to mokufi matoyi ? Nani akomisaka moto, moto oyo amonaka to mokufi miso ? Boni, ezali Ngai Yawe te ? \v 12 Sik’oyo kende, Ngai moko nakosunga yo mpo ete oloba malamu, mpe nakoteya yo makambo oyo osengeli koloba. \p \v 13 Kasi Moyize azongisaki : \pi1 — Te Nkolo ! Nabondeli Yo ! Tinda moto mosusu oyo olingi mpo na kosala yango. \p \v 14 Boye Yawe asilikelaki Moyize mpe alobaki na ye : \pi1 — Boni, Aron, moto ya libota ya Levi, azali ndeko na yo te ? Nayebi ete alobaka malamu mpe ye wana azali koya kokutana na yo ; mpe motema na ye ekosepela tango akomona yo. \v 15 Okoloba na ye mpe okotia maloba na monoko na ye, bongo Ngai nakosunga bino mibale mpo ete bokoka koloba malamu, mpe nakoteya bino makambo oyo bosengeli kosala. \v 16 Ye akoloba epai ya bato na esika na yo, akozala molobeli na yo ; bongo yo okozala lokola nzambe na ye. \v 17 Kasi zwa lingenda oyo ezali na maboko na yo mpo ete osala bilembo ya kokamwa na nzela na yango. \s1 Moyize azongi na Ejipito \p \v 18 Moyize azongaki epai ya Jetro, tata-bokilo na ye, mpe alobaki na ye : \pi1 — Nasengeli kokende epai ya bandeko na ngai, na Ejipito, mpo ete natala soki ndambo kati na bango bazali nanu na bomoi. \p Jetro ozongisaki : \pi1 — Kende na kimia ! \p \v 19 Yawe alobaki na Moyize tango azalaki nanu na mokili ya Madiani : \pi1 — Telema mpe zonga na Ejipito, pamba te bato nyonso oyo balingaki koboma yo basili kokufa. \p \v 20 Moyize azwaki mwasi na ye mpe bana na ye ya mibali, atiaki bango likolo ya ane mpe azongaki na Ejipito. Azwaki lisusu lingenda ya Nzambe na loboko na ye. \p \v 21 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Sik’oyo, lokola ozali kozonga na Ejipito, tala bikamwa nyonso oyo napesi yo nguya ya kosala ; okosala yango liboso ya Faraon. Ngai nakokomisa motema na ye libanga mpo ete akoka kotika te bato na Ngai kokende. \v 22 Okoloba na Faraon : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Isalaele azali mwana na Ngai ya liboso ya mobali. \v 23 Mpe nalobi na yo : Tika mwana na Ngai ya mobali kokende mpo ete asalela Ngai. Soki kaka oboyi kotika ye, nakoboma mwana na yo ya liboso ya mobali. › » \p \v 24 Nzokande na nzela, na esika oyo balekisaki butu, Yawe akutanaki na Moyize mpe alukaki koboma ye. \v 25 Kasi Sefora azwaki libanga ya songe, akataki ngenga ya mwana na ye ya mobali mpe atutisaki ngenga yango na makolo ya Moyize ; alobaki : \pi1 — Solo, ozali penza mpo na ngai mobali ya makila. \p \v 26 Bongo Yawe atikaki Moyize. Ezalaki na tango wana nde Sefora alobaki na Moyize likolo na likambo ya kokatama ngenga : \pi1 — Mobali ya makila. \p \v 27 Yawe alobaki na Aron : \pi1 — Kende kokutana na Moyize na esobe. \p Aron akendeki, akutanaki na Moyize na ngomba ya Nzambe mpe apesaki ye beze. \v 28 Moyize ayebisaki Aron makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye koloba mpe bikamwa nyonso oyo atindaki ye kosala. \p \v 29 Bongo Moyize mpe Aron bakendeki kosangisa bakambi nyonso ya Isalaele. \v 30 Aron ayebisaki bango maloba nyonso oyo Yawe alobaki na Moyize. Asalaki bikamwa liboso ya bato. \v 31 Bato bandimaki. Bongo tango bayokaki ete Yawe akanisaki bana ya Isalaele mpe amonaki pasi na bango, bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe. \c 5 \s1 Moyize mpe Aron bakei epai ya Faraon \p \v 1 Sima na yango, Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki : \pi1 — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika bato na Ngai kokende kosala feti na esobe mpo na lokumu na Ngai. » \p \v 2 Faraon azongisaki : \pi1 — Ye Yawe nde nani mpo ete ngai natosa ye mpe natika Isalaele kokende ? Nayebi ye te mpe nakotika te ete Isalaele akende. \p \v 3 Balobaki : \pi1 — Nzambe ya Ba-Ebre akutanaki na biso. Sik’oyo, tika biso totambola mikolo misato kati na esobe mpo ete tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ; noki te akoboma biso na bokono to na mopanga. \p \v 4 Kasi mokonzi ya Ejipito alobaki : \pi1 — Moyize mpe Aron, mpo na nini bozali kopekisa bato kosala misala na bango ? Bozonga na mosala na bino ! \p \v 5 Faraon abakisaki lisusu : \pi1 — Botala ! Bato oyo bakomi ebele kati na mokili, bongo bino bozali kopekisa bango kosala mosala ! \s1 Minyoko eyei lisusu makasi \p \v 6 Kaka na mokolo wana, Faraon apesaki mitindo oyo epai ya bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe na bakapita ya bana ya Isalaele : \pi1 \v 7 — Bokopesa lisusu matiti te epai ya bato oyo mpo na kosala babiliki ndenge bozalaki kopesa bango liboso ; botika bango moko bakende kolokota matiti na bango. \v 8 Kasi botinda bango kosala kaka motango ya babiliki oyo basalaka wuta kala, bokitisa motango na yango te. Bazali bagoyigoyi, yango wana bazali koganga : « Tika biso tokende kobonzela Nzambe na biso mbeka ! » \v 9 Bokomisa makasi misala na bango mpo ete bakoma na mosala ebele mpe batia matoyi te na makambo ya lokuta. \p \v 10 Bongo bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu mpe bakapita ya bana ya Isalaele babimaki mpe balobaki na bato : \pi1 — Tala makambo oyo Faraon alobi : « Nakopesa bino lisusu matiti te. \v 11 Bokende kozwa matiti bino moko na esika oyo bokoki komona yango ! Kasi motango ya babiliki oyo bakatela bino ekokita ata moke te. » \p \v 12 Boye bana ya Isalaele bapanzanaki na Ejipito mobimba mpo na kolokota matiti ya kotumba na yango babiliki. \v 13 Bakambi oyo balandelaka misala makasi ya bawumbu bazalaki kotindika bango na makasi mpe koloba : \pi1 — Bokokisa motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo lokola na tango oyo bazalaki kopesa bino matiti ! \p \v 14 Bakambi oyo Faraon aponaki mpo na kolandela misala makasi ya bawumbu babetaki bakapita ya bana ya Isalaele oyo bango batiaki mpe batunaki bango : \pi1 — Mpo na nini lobi oyo eleki mpe lelo bokokisi te motango ya babiliki oyo bosalaka wuta kala ? \p \v 15 Bakengeli ya bana ya Isalaele bakendeki kolela epai ya Faraon : \pi1 — Mpo na nini ozali kosala basali na yo boye ? \v 16 Bazali kopesa lisusu te matiti epai ya basali na yo, nzokande bazali koloba na biso : « Bosala babiliki ! » Sik’oyo tala, basali na yo bazali kobetama, kasi mbeba ezali epai ya bato na yo moko. \p \v 17 Faraon alobaki : \pi1 — Bagoyigoyi ! Bozali penza bagoyigoyi ! Yango wana bozali koloba : « Tika biso tokende kobonzela Yawe mbeka. » \v 18 Sik’oyo, bozonga na mosala ! Bakopesa bino lisusu matiti te, kasi bokosala kaka motango ya babiliki oyo bakatela bino. \p \v 19 Bakengeli ya bana ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi koleka tango bayebisaki bango : « Motango ya babiliki oyo bakatela bino mpo na mokolo na mokolo ekokita te. » \v 20 Tango batikaki Faraon, batombokelaki Moyize mpe Aron oyo bazalaki kozela bango. \v 21 Balobaki : \pi1 — Tika ete Yawe atala bino mpe asambisa bino ! Bokomisi biso eloko ya nkele liboso ya Faraon mpe ya basali na ye mpe botie mopanga na maboko na bango mpo ete baboma biso ! \s1 Nzambe alaki kokangola Isalaele \p \v 22 Boye Moyize abalukaki epai na Yawe mpe abondelaki : \pi1 — Nkolo ! Mpo na nini ozali komemela bato oyo pasi ? Boni, ezali mpo na yango nde otindaki ngai ? \v 23 Wuta tango nakendeki koloba na Faraon na Kombo na Yo, Faraon akomi konyokola bato oyo, bongo Yo ozali kosala ata eloko moke te mpo na kokangola bango ! \c 6 \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Sik’oyo, okomona makambo oyo nakosala Faraon : na loboko na Ngai ya nguya, Faraon akotika bato na Ngai kokende mpe akobimisa bango na mokili na ye. \p \v 2 Nzambe alobaki lisusu na Moyize : \pi1 — Nazali Yawe. \v 3 Namimonisaki epai ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Jakobi lokola Nzambe-Na-Nguya-Nyonso, kasi namimonisaki te epai na bango na Kombo na Ngai : Yawe. \v 4 Nasalaki boyokani na Ngai elongo na bango mpo na kopesa bango mokili ya Kanana epai wapi bazalaki kowumela lokola bapaya. \v 5 Mpe lisusu nayoki kolela ya bana ya Isalaele oyo bato ya Ejipito bakomisi bawumbu, bongo nakanisi lisusu boyokani na Ngai. \v 6 Yango wana, loba na bana ya Isalaele : « Nazali Yawe ! Nakokangola bino na misala makasi oyo bato ya Ejipito bapesi bino. Nakokangola bino na se ya bowumbu na bango na loboko na nguya mpe na bitumbu ya makasi. \v 7 Nakozwa bino lokola bato na Ngai moko, bongo nakozala Nzambe na bino. Boye bokoyeba ete Ngai Yawe, nazali Nzambe na bino, oyo akangolaki bino na se ya misala makasi ya bato ya Ejipito. \v 8 Mpe nakokotisa bino na mokili oyo nalapaki ndayi, na kotombola loboko, ete nakopesa yango epai ya Abrayami, epai ya Izaki mpe epai ya Jakobi ; nakopesa bino yango mpo ete ekoma ya bino. Nazali Yawe. » \p \v 9 Moyize alobaki makambo oyo epai ya bana ya Isalaele, kasi bayokaki ye te, pamba te misala makasi oyo bazalaki kopesa bango elembisaki mitema na bango. \p \v 10 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 \v 11 — Kende koyebisa Faraon, mokonzi ya Ejipito, ete abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. \p \v 12 Kasi Moyize azongiselaki Yawe : \pi1 — Soki kutu bana ya Isalaele bayoki ngai te, ndenge nini Faraon ayoka ngai moto ya likukuma ? \p \v 13 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron na tina na bana ya Isalaele mpe ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, oyo epai ya nani apesaki mitindo ete abimisa bana ya Isalaele na Ejipito. \s1 Milongo ya mabota ya Moyize mpe Aron \li4 \v 14 Tala bakambi ya mabota na bango : \b \li1 Bana mibali ya Ribeni, mwana mobali ya liboso ya Isalaele : \li2 Enoki, Palu, Etsironi mpe Karimi. \li4 Wana nde mabota ya Ribeni. \b \li1 \v 15 Bana mibali ya Simeoni : \li2 Yemuweli, Yamini, Owadi, Yakini, Tsoari mpe Saulo, mwana mobali oyo abotamaki na mwasi ya Kanana. \li4 Wana nde mabota ya Simeoni. \b \li1 \v 16 Tala bakombo ya bana mibali ya Levi oyo awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo kolanda ndenge babotamela : \li2 Gerishoni, Keati mpe Merari. \li1 \v 17 Bana mibali ya Gerishoni kolanda mabota na bango : \li2 Libini mpe Shimei. \li1 \v 18 Bana mibali ya Keati oyo awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na misato : \li2 Amirami, Yitseari, Ebron mpe Uzieli. \li1 \v 19 Bana mibali ya Merari : \li2 Maali mpe Mushi. \li4 Wana nde mabota ya Levi kolanda ndenge babotamela. \b \li1 \v 20 Amirami abalaki Yokebedi, tata mwasi na ye, oyo abotelaki ye Aron mpe Moyize. \li4 Amirami awumelaki na bomoi mibu nkama moko na tuku misato na sambo. \li1 \v 21 Bana mibali ya Yitseari : \li2 Kore, Nefegi mpe Zikiri. \li1 \v 22 Bana mibali ya Uzieli : \li2 Mishaeli, Elitsafani mpe Sitiri. \li1 \v 23 Aron abalaki Elisheba, mwana mwasi ya Aminadabi mpe ndeko mwasi ya Nashoni. Elisheba abotelaki Aron : Nadabi, Abiyu, Eleazari mpe Itamari. \b \li1 \v 24 Bana mibali ya Kore : \li2 Asiri, Elikana mpe Abiazafi. \li4 Wana nde mabota ya Kore. \b \li1 \v 25 Eleazari, mwana mobali ya Aron, abalaki moko kati na bana basi ya Putieli, oyo abotelaki ye mwana mobali : Pineasi. \b \li4 Wana nde bakambi ya mabota ya Levi kolanda mabota ya botata na bango. \b \p \v 26 Ezali epai ya Aron mpe Moyize nde Yawe alobaki : « Bobimisa bana ya Isalaele na Ejipito lokola mampinga oyo etandami na molongo. » \v 27 Ezali bango nde bakendeki kokutana na Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpo na kobimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. Ezali nde Moyize mpe Aron wana. \p \v 28 Tala makambo oyo ekomaki tango Yawe alobaki na Moyize, na Ejipito : \v 29 Yawe ayebisaki Moyize : \pi1 — Nazali Yawe. Loba na Faraon, mokonzi ya Ejipito, makambo nyonso oyo nayebisi yo. \p \v 30 Kasi Moyize azongiselaki Yawe : \pi1 — Tala, nazali na likukuma ; ndenge nini Faraon akoyoka ngai ? \c 7 \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : « Tala, nakomisi yo nzambe liboso ya Faraon, mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akozala mosakoli na yo. \v 2 Okoloba makambo nyonso oyo natindi yo ; mpe Aron, ndeko na yo ya mobali, akoyebisa yango epai ya Faraon mpo ete Faraon abimisa bana ya Isalaele na mokili na ye. \v 3 Kasi Ngai, nakokomisa motema ya Faraon makasi lokola libanga, nakosala bilembo mpe bikamwa ebele na Ejipito. \v 4 Atako bongo, Faraon akoyokela bino te. Boye, nakosembola loboko na Ngai kati na Ejipito ; mpe na nzela ya bitumbu minene, nakobimisa wuta na Ejipito mampinga na Ngai, bato na Ngai, bana ya Isalaele. \v 5 Bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakosembola loboko na Ngai kati na mokili na bango mpe nakobimisa bana ya Isalaele wuta na Ejipito. » \p \v 6 Moyize mpe Aron basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango. \v 7 Tango basololaki na Faraon, Moyize azalaki na mibu ya mbotama tuku mwambe ; mpe Aron, tuku mwambe na misato. \s1 Lingenda ya Aron ebongwani nyoka \p \v 8 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : \v 9 « Tango Faraon akoloba na bino : ‹ Bosala bikamwa, › yo Moyize, okoloba na Aron : ‹ Kamata lingenda na yo, bwaka yango liboso ya Faraon, › mpe lingenda ekobongwana nyoka. » \p \v 10 Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe basalaki makambo nyonso oyo Yawe atindaki bango. Aron abwakaki lingenda na ye liboso ya Faraon mpe bakalaka na ye, mpe yango ebongwanaki nyoka. \v 11 Faraon abengisaki bato ya bwanya mpe bato ya soloka. Bongo bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka. \v 12 Moko na moko kati na bango abwakaki lingenda na ye na mabele mpe ebongwanaki nyoka. Kasi lingenda ya Aron emelaki mangenda na bango. \v 13 Atako bongo, motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi ; mpe aboyaki koyokela bango, ndenge kaka Yawe alobaki. \ms1 Bitumbu ya Yawe ekweyi na Ejipito \s1 Etumbu ya liboso : mayi ebongwani makila \p \v 14 Yawe alobaki na Moyize : « Motema ya Faraon ezali kaka makasi, aboyi kaka kotika bato na Ngai kokende. \v 15 Kende epai ya Faraon na tongo-tongo, na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Zela ye pembeni ya Nili mpo na kokutana na ye mpe simba na loboko na yo lingenda oyo ebongwanaki nyoka. \v 16 Bongo okoloba na ye : ‹ Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, atindi ngai epai na yo mpo na koyebisa yo : ‘ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai na esobe. Kasi kino lelo, ozali kaka koyoka te. \v 17 Tala makambo oyo Yawe alobi : Tala ndenge nini okoyeba ete Ngai nazali Yawe : Nakobeta na mayi ya Nili lingenda oyo nazali na yango na maboko, mpe mayi yango ekobongwana makila. \v 18 Mbisi ya Nili ekokufa mpe mayi ya Nili ekokoma solo ya kopola, bongo bato ya Ejipito bakokoka lisusu komela yango te. ’ › » \p \v 19 Yawe alobaki na Moyize : « Yebisa Aron : ‹ Kamata lingenda na yo mpe sembola yango na ngambo ya mayi nyonso ya Ejipito : etima mpe miluka, maziba mpe mabulu nyonso ya mayi ekobongwana makila. › Makila ekozala na bisika nyonso ya Ejipito kino na bimelelo ya mayi oyo esalema na nzete to na mabanga. » \p \v 20 Moyize mpe Aron basalaki ndenge kaka Yawe atindaki bango. Aron atombolaki nzete na ye mpe abetaki lingenda oyo azalaki na yango, na mayi ya Nili na miso ya Faraon mpe ya basali na ye ; mpe mayi nyonso ebongwanaki makila. \v 21 Mbisi ya Nili ekufaki mpe mayi elumbaki solo ya kopola na ndenge ete bato ya Ejipito bakokaki lisusu te komela yango. Makila ezalaki na bisika nyonso ya Ejipito. \p \v 22 Kasi bato ya maji ya Ejipito, bango mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka. Motema ya Faraon ekomaki lisusu makasi mpe aboyaki koyokela Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki. \v 23 Atako bongo, Faraon abalukaki, akotaki na ndako na ye mpe azwaki likambo yango na motema te. \v 24 Bato nyonso ya Ejipito batimolaki mabulu pene ya Nili mpo na kozwa mayi ya komela, pamba te bakokaki lisusu te komela mayi ya ebale. \s1 Etumbu ya mibale : magorodo \p \v 25 Mikolo sambo elekaki sima na Yawe kobebisa mayi ya Nili. \c 8 \p \v 1 Sima na yango, Yawe atindaki Moyize : « Kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. \v 2 Soki oboyi kotika bango kokende, nakotinda etumbu ya magorodo na mokili na yo mobimba. \v 3 Nili ekotonda na magorodo ; bongo magorodo yango ekobima wuta na Nili, ekokota kino na ndako na yo ya bokonzi, na shambre na yo ya kolala, na mbeto na yo, na bandako ya basali na yo, na bandako ya bato na yo, na bafulu na yo ya mapa mpe kino na bisika oyo babalolaka farine. \v 4 Magorodo ekomatela yo, basali na yo mpe bato na yo nyonso. › » \p \v 5 Yawe alobaki na Moyize : « Loba na Aron ete asembola loboko na ye mpe lingenda na ye na ngambo ya mayi, ya miluka mpe ya maziba, mpo ete abimisa magorodo na mokili ya Ejipito. » \p \v 6 Boye Aron asembolaki loboko na ye na ngambo ya mayi ya Ejipito ; bongo magorodo ebimaki mpe etondisaki mokili ya Ejipito. \v 7 Kasi bato ya maji ya Ejipito mpe basalaki bikamwa ya ndenge moko na nzela ya misala na bango ya soloka : bango mpe babimisaki magorodo na mokili ya Ejipito. \p \v 8 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : \pi1 — Bobondela Yawe ete alongola magorodo pene na ngai mpe pene ya bato na ngai ; bongo nakotika bato na bino kokende kobonzela Yawe mbeka. \p \v 9 Moyize alobaki na Faraon : \pi1 — Tika ete mokonzi apona tango nini nasengeli kobondela Yawe mpo na yo, basali na yo mpe bato na yo, mpo ete Yawe alongola magorodo pene na yo mpe pene ya bandako na yo ; kasi etikala kaka na ebale Nili. \p \v 10 Faraon azongisaki : \pi1 — Tika ete esalema lobi. \p Moyize alobaki : \pi1 — Iyo, ekosalema ndenge osengi, mpo oyeba ete moko te azali lokola Yawe, Nzambe na biso. \v 11 Magorodo ekolongwa pene na yo, pene na bandako na yo, ya basali na yo mpe ya bato na yo ; kasi ekotikala kaka na ebale Nili. \p \v 12 Sima, Moyize mpe Aron batikaki Faraon. Bongo Moyize agangaki epai na Yawe na tina na magorodo oyo atindelaki Faraon. \v 13 Yawe asalaki makambo oyo Moyize asengaki : magorodo ekufaki na bandako, na mapango mpe na bilanga. \v 14 Basangisaki yango na maboke mpe mabele elumbaki solo ya kopola. \v 15 Kasi tango Faraon amonaki ete kimia ekoti, ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe ayokelaki te Moyize mpe Aron ndenge kaka Yawe alobaki. \s1 Etumbu ya misato : bangungi \p \v 16 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Loba na Aron ete asembola lingenda na ye mpe abeta yango na putulu ya mabele ; mpe yango ekokoma bangungi kati na mokili mobimba ya Ejipito. \p \v 17 Basalaki kaka ndenge wana. Tango Aron asembolaki loboko mpe lingenda na ye, abetaki yango na putulu ya mabele ; bongo putulu yango ekomaki bangungi oyo ematelaki bato mpe banyama. Putulu nyonso ya mokili ya Ejipito ebongwanaki bangungi. \v 18 Kasi tango bato ya maji bamekaki kobimisa bangungi na nzela ya misala na bango ya soloka, balongaki te. Bongo bangungi ematelaki bato mpe banyama. \v 19 Boye bato ya maji balobaki na Faraon : « Oyo ezali penza mosapi ya Nzambe ! » Kasi Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki koyoka, ndenge kaka Yawe alobaki. \s1 Etumbu ya minei : banzinzi oyo eswaka \p \v 20 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Lamuka na tongo-tongo mpe kende kokutana na Faraon na tango oyo abimaka mpo na kokende na mayi. Loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. \v 21 Soki oboyi kotika bato na Ngai kokende, nakotinda banzinzi epai na yo, epai ya bakalaka na yo, epai ya bato na yo mpe kino na bandako na yo. Boye bandako ya bato na Ejipito, ezala mabele epai wapi bazali, ekotonda na banzinzi oyo eswaka. \v 22 Na mokolo wana, nakosala bokeseni mpo na etuka ya Gosheni epai wapi bato na Ngai bazali kovanda ; banzinzi oyo eswaka ekozala kuna te, mpo oyeba ete, Ngai Yawe, nazali kati na etuka yango. \v 23 Bongo nakotia bokeseni kati na bato na Ngai mpe bato na yo. Elembo yango ekosalema lobi. » \p \v 24 Yawe asalaki bongo : banzinzi ebele oyo eswaka ekotaki mpe epanzanaki kati na ndako ya Faraon, na bandako ya bakalaka na ye mpe kati na mokili mobimba ya Ejipito. Boye mokili ebebisamaki na banzinzi oyo eswaka. \v 25 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : \pi1 — Bokende, bobonzela Nzambe na bino mbeka kati na mokili oyo. \p \v 26 Kasi Moyize azongisaki : \pi1 — Ekoki kosalema bongo te ; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te ? \v 27 Tosengeli kotambola mikolo misato kati na esobe, sima tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, mbeka ndenge atindaki biso. \p \v 28 Faraon alobaki : \pi1 — Nakotika bino kokende kobonzela Yawe, Nzambe na bino, mbeka kati na esobe ; kasi bokende mosika te. Sik’oyo, bobondela mpo na ngai ! \p \v 29 Moyize azongisaki : \pi1 — Ndenge nazali kobima boye na ndako na yo, nakobondela Yawe ; bongo lobi, banzinzi oyo eswaka ekolongwa epai ya Faraon, epai ya bakalaka na ye mpe epai ya bato na ye. Kasi tika ete Faraon akoba te kotiola Yawe na koboya kotika bato kokende kobonzela Yawe mbeka. \p \v 30 Tango Moyize abimaki na ndako ya Faraon, abondelaki Yawe \v 31 mpe Yawe akokisaki makambo oyo Moyize asengaki : banzinzi oyo eswaka etikaki Faraon, bakalaka na ye mpe bato na ye. Ata nzinzi moko te etikalaki. \v 32 Kasi na mbala oyo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi lokola libanga mpe aboyaki kaka kotika bato kokende. \c 9 \s1 Etumbu ya mitano : bokono kati na bibwele \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : « Kende koyebisa Faraon : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‘ Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai ! ’ \v 2 Soki oboyi kotika bango kokende mpe okobi kokanga bango, \v 3 loboko na Yawe ekomema mopepe ya bokono ya somo kati na bibwele na yo, oyo ezali na elanga : bampunda, ba-ane, bashamo, bangombe, bameme mpe bantaba. \v 4 Kasi Yawe akotia bokeseni kati na bibwele ya bana ya Isalaele mpe ya bato ya Ejipito, pamba te nyama moko te ya bana ya Isalaele ekokufa. › » \p \v 5 Yawe abongisaki tango mpe alobaki : « Lobi, Yawe akokokisa likambo oyo na mokili. » \p \v 6 Mpe mokolo oyo elandaki, Yawe akokisaki yango : bibwele nyonso ya bato ya Ejipito ekufaki, kasi ebwele ata moko te ya bana ya Isalaele ekufaki. \v 7 Faraon atindaki bato mpo na kolandela likambo oyo mpe bamonaki ete ata ebwele moko te kati na bibwele ya bana ya Isalaele ekufaki. Atako bongo, Faraon ayeisaki lisusu motema na ye makasi mpe aboyaki kaka kotika bato kokende. \s1 Etumbu ya motoba : bapota ya kopola \p \v 8 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Botondisa maboko na bino na putulu oyo ewuti na fulu ya moto makasi, mpe tika ete Moyize abwaka yango likolo, na miso ya Faraon. \v 9 Yango ekopanzana na mokili mobimba ya Ejipito mpe ekobimisa, kati na Ejipito mobimba, na banzoto ya bato mpe ya bibwele, babibon oyo ekokoma bapota ya kopola. » \p \v 10 Bazwaki putulu na fulu ya moto mpe batelemaki liboso ya Faraon. Moyize abwakaki yango likolo mpe ebimisaki babibon oyo ekomaki bapota ya kopola na banzoto ya bato mpe ya bibwele. \v 11 Bato ya soloka bakokaki te kotelema liboso ya Moyize likolo ya bapota oyo ezalaki na banzoto na bango mpe ya bato nyonso ya Ejipito. \v 12 Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon ayokelaki te Moyize mpe Aron, ndenge kaka Yawe alobaki yango na Moyize. \s1 Etumbu ya sambo : mvula ya mabanga \p \v 13 Yawe alobaki na Moyize : « Lamuka na tongo-tongo, kende kokutana na Faraon mpe loba na ye : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. \v 14 Ya mbala oyo, nakotinda mopepe na Ngai nyonso ya bokono epai na yo, epai ya bakalaka na yo mpe epai ya bato na yo, mpo oyeba ete moko te azali lokola Ngai, na mokili mobimba. \v 15 Pamba te kino sik’oyo, nakokaki kosembola loboko na Ngai mpe kotindela yo elongo na bato na yo nyonso, mopepe ya bokono oyo ekokaki kolimwisa bino na mokili. \v 16 Kasi natikaki yo na bomoi mpo na tina oyo : kotalisa yo nguya na Ngai mpe kosala ete lokumu ya Kombo na Ngai epanzana na mokili mobimba. \v 17 Lokola ozali kokoba koboya kotika bato na Ngai kokende, \v 18 lobi na ngonga oyo, nakobetisa mvula ya mabanga ya moto makasi, oyo etikala nanu kobeta te wuta mokili ya Ejipito ezala. \v 19 Sik’oyo, pesa mitindo ete bamema na ebombelo, bibwele na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango kati na elanga. Pamba te mvula ya mabanga ekokweyela mpe ekoboma moto mpe nyama nyonso oyo bokokotisa kuna te to oyo ekotikala kati na elanga. › » \p \v 20 Kati na basali ya Faraon, ba-oyo babangaki Liloba na Yawe bakotisaki na lombangu bawumbu mpe bibwele na bango kati na bandako. \v 21 Kasi ba-oyo babangaki te Liloba na Yawe, batikaki bawumbu mpe bibwele na bango kati na elanga. \p \v 22 Yawe alobaki na Moyize : « Sembola loboko na yo na likolo mpo ete mvula ya mabanga enoka na mokili mobimba ya Ejipito : likolo ya bato, ya bibwele mpe ya matiti nyonso oyo ebotaka na elanga kati na Ejipito. » \p \v 23 Tango Moyize asembolaki lingenda na ye na likolo, Yawe abetisaki bakake mpe mvula ya mabanga. Bakake ebetaki na mokili. Bongo Yawe anokisaki mvula ya mabanga na mokili ya Ejipito. \v 24 Boye mvula ya mabanga mpe bakake ebetaki. Ezalaki mvula moko ya makasi penza oyo etikala nanu kobeta te wuta Ejipito ekoma ekolo. \v 25 Ebomaki, kati na Ejipito, nyonso oyo ezalaki kati na elanga, ezala bato to bibwele ; ebebisaki matiti nyonso ya elanga mpe ebukaki banzete nyonso. \v 26 Kasi enokaki te kati na etuka ya Gosheni epai wapi bana ya Isalaele bazalaki. \p \v 27 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : \pi1 — Ya mbala oyo, nasali lisumu. Yawe azali sembo ; ngai mpe bato na ngai tosali mabe. \v 28 Bobondela Yawe mpo ete asilisa mvula ya mabanga mpe bakake. Bongo ngai nakotika bino kokende, mpe bino bokowumela lisusu awa te. \p \v 29 Moyize azongisaki : \pi1 — Tango nakobima na engumba, nakotombola maboko na ngai mpo na kobondela Yawe. Bakake ekosila mpe mvula ya mabanga ekonoka lisusu te, mpo ete oyeba ete mokili ezali ya Yawe. \v 30 Kasi nayebi ete, yo elongo na bakalaka na yo, bokobanga na bino kaka Yawe Nzambe te. \p \v 31 Lino mpe Orje\f + \fr 9.31 \fr*\ft Orje ezali mbuma oyo ekokana na loso mpe ebimaka mbala moko na mobu.\ft*\f* ebebaki, pamba te lino ebimisaki mito mpe Orje ebimisaki bafololo. \v 32 Ble mpe epotele\f + \fr 9.32 \fr*\ft Epotele ezali nzete oyo ebotaka mbuma kasi ebimaka noki te.\ft*\f* ebebaki te, pamba te tango na yango ya kobota ekokaki nanu te. \p \v 33 Bongo Moyize atikaki Faraon mpe abimaki libanda ya engumba. Atombolaki maboko na ye epai na Yawe ; boye bakake mpe mvula ya mabanga etikaki kobeta, mpe mvula esilaki kati na Ejipito. \v 34 Tango Faraon amonaki ete mvula ya mabanga mpe bakake etiki kobeta, asalaki lisusu lisumu. Ye mpe bakalaka na ye bayeisaki lisusu mitema na bango makasi. \v 35 Boye motema ya Faraon ekomaki penza makasi mpe aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende, ndenge kaka Yawe alobaki na nzela ya Moyize. \c 10 \s1 Etumbu ya mwambe : mabanki \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : « Kende epai ya Faraon, pamba te nakomisi motema na ye mpe ya bakalaka na ye makasi, mpo ete nasala bilembo na Ngai ya kokamwa kati na bango, \v 2 mpe ete oyebisa bana na yo mpe bakoko na yo makambo oyo nasalaki na Ejipito mpe bilembo ya kokamwa oyo nasalaki kati na bango. Bongo bokoyeba ete Ngai nazali Yawe. » \p \v 3 Boye Moyize mpe Aron bakendeki epai ya Faraon mpe balobaki na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Ba-Ebre, alobi : ‹ Kino tango nini okoboya komikitisa liboso na Ngai ? Tika bato na Ngai kokende kogumbamela Ngai. \v 4 Soki oboyi kotika bango kokende, lobi nakotinda mabanki na mokili na yo. \v 5 Ekotondisa mokili ya Ejipito na ndenge ete mabele ekomonana lisusu te. Mabanki yango ekolia mwa biloko moke oyo mvula ya mabanga etikaki ; ekolia mpe banzete na bino nyonso oyo ezali kokola kati na bilanga. \v 6 Ekotonda na bandako na yo, ya bakalaka na yo mpe ya bato nyonso ya Ejipito ; ezala batata na yo to bakoko na yo batikala nanu komona te likambo ya boye wuta bazala na mokili oyo kino lelo. › » \p Moyize abalukaki mpe atikaki ndako ya Faraon. \v 7 Bakalaka ya Faraon balobaki na ye : \pi1 — Kino tango nini moto oyo akozala motambo mpo na biso ? Tika bango bakende kogumbamela Yawe, Nzambe na bango. Ozali komona te ete Ejipito ebebi ? \p \v 8 Bongo bazongisaki Moyize mpe Aron epai ya Faraon ; mpe Faraon alobaki na bango : \pi1 — Bokende kogumbamela Yawe, Nzambe na bino. Kasi banani oyo bakokende ? \p \v 9 Moyize azongisaki : \pi1 — Tokokende elongo na bilenge na biso, bampaka na biso, bana na biso ya mibali mpe ya basi, bameme na biso, bantaba na biso mpe bangombe na biso ; pamba te tokosala feti mpo na lokumu ya Yawe. \p \v 10 Faraon alobaki na bango : \pi1 — Soki nakotika bino kokende elongo na bana na bino, wana tika ete Yawe azala elongo na bino ! Nzokande emonani solo ete bozali na makanisi mabe. \v 11 Ekosalema bongo te ! Kaka mibali nde bakokende kogumbamela Yawe, pamba te yango nde likambo oyo bozali kosenga ngai. \p Boye babenganaki Moyize mpe Aron liboso ya Faraon. \p \v 12 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Sembola loboko na yo na mokili ya Ejipito mpo ete obimisa mabanki kati na mokili yango mpe mabanki yango elia matiti nyonso ya bilanga, biloko nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te. \p \v 13 Boye Moyize asembolaki lingenda na ye na mokili ya Ejipito mpe Yawe atindaki mopepe ya este mokolo mobimba mpe butu mobimba. Mpe tango tongo etanaki, mopepe yango eyaki na mabanki. \v 14 Mabanki ekotaki kati na Ejipito nyonso mpe evandaki ebele na bisika nyonso ya Ejipito. Etumbu ya mabanki ya ndenge wana etikala nanu kozala te mpe ekotikala kozala lisusu te. \v 15 Ezipaki mabele nyonso mpe mabele eyindaki. Eliaki nyonso oyo mvula ya mabanga ebebisaki te : matiti nyonso ya bilanga mpe bambuma nyonso ya banzete. Kati na mokili mobimba ya Ejipito, eloko moko te ya mobesu etikalaki na banzete to na matiti ya bilanga. \p \v 16 Faraon abengisaki Moyize mpe Aron na lombangu, alobaki : \pi1 — Nasali lisumu epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe epai na bino. \v 17 Sik’oyo lisusu, bolimbisa lisumu na ngai. Bobondela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete alongola etumbu oyo ya kufa kati na ngai. \p \v 18 Moyize atikaki Faraon mpe abondelaki Yawe. \v 19 Bongo Yawe akomisaki mopepe ya este ekumbaki moko ya weste oyo ememaki mabanki mpe ebwakaki yango na ebale monene ya Barozo. Ata libanki moko te etikalaki na bisika nyonso ya Ejipito. \v 20 Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kotika bana ya Isalaele kokende. \s1 Etumbu ya libwa : molili \p \v 21 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Sembola loboko na yo likolo mpo ete molili epanzana na mokili ya Ejipito, molili oyo ekosala ete bato batambola na kosimbasimba. \p \v 22 Boye Moyize asembolaki loboko na ye likolo mpe molili makasi ezipaki mokili mobimba ya Ejipito mikolo misato. \v 23 Na mikolo misato yango, moto moko te akokaki komona moto mosusu mpe kolongwa na esika oyo azali mpo na kokende na esika mosusu. Nzokande pole ezalaki na bisika nyonso oyo bana ya Isalaele bazalaki kovanda. \p \v 24 Faraon abengisaki Moyize mpe alobaki : \pi1 — Bokende kogumbamela Yawe ; bokende bino nyonso nzela moko, ezala basi mpe bana na bino. Kasi botika kaka bangombe, bameme mpe bantaba na bino. \p \v 25 Kasi Moyize alobaki : \pi1 — Okopesa biso mbeka mpe makabo ya kotumba oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso. \v 26 Bitonga na biso ya bibwele mpe ekokende nzela moko na biso ; ata linzaka moko te ya ebwele ekotikala. Pamba te ezali kati na bibwele yango nde tokopona oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso ; mpe wana tokomi nanu kuna te, toyebi te ebwele nini tokobonza mpo na kogumbamela Yawe. \p \v 27 Kasi Yawe akomisaki lisusu motema ya Faraon makasi ; mpe Faraon aboyaki kaka kotika bango kokende. \p \v 28 Faraon alobaki na Moyize : \pi1 — Longwa liboso na ngai mpe keba na yo ! Koya lisusu liboso na ngai te ! Mokolo oyo okoya lisusu liboso na ngai, okokufa. \p \v 29 Moyize azongisaki : \pi1 — Ndenge kaka olobi, nakotikala koya lisusu liboso na yo te ! \c 11 \s1 Etumbu ya zomi : kufa ya bana ya liboso \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : « Nakoyeisa lisusu etumbu moko na bomoi ya Faraon mpe ya Ejipito. Sima na yango, Faraon akotika bino ete bokende ; kutu, akobengana bino libela. \v 2 Loba na bato ete basenga biloko ya palata mpe ya wolo : mobali nyonso asenga yango epai ya moninga na ye mobali mpe mwasi nyonso, epai ya moninga na ye mwasi. » \p \v 3 Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito. Mpe Moyize ye moko azalaki moto monene kati na Ejipito, na miso ya basali ya Faraon mpe ya bato nyonso. \p \v 4 Moyize alobaki na Faraon : « Tala makambo oyo Yawe alobi : ‹ Na kati-kati ya butu, nakotambola kati na mokili mobimba ya Ejipito. \v 5 Mwana mobali nyonso ya liboso kati na Ejipito akokufa, kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo avandi na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mwasi mowumbu oyo azali konika ble mpe bana mibali nyonso ya liboso ya bibwele. \v 6 Bongo koganga makasi ekozala na mokili mobimba ya Ejipito, koganga oyo ezala nanu te mpe ekotikala kozala te. \v 7 Kasi kati na bana nyonso ya Isalaele, ezala mbwa ekoganga te liboso ya moto to ya nyama. › Na bongo, bokoyeba ete Yawe asali bokeseni kati na bato ya Ejipito mpe ya Isalaele. \v 8 Boye, bakalaka na yo nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakoya epai na ngai, bakofukama liboso na ngai mpe bakoloba : ‹ Kende, yo mpe bato nyonso oyo bazali kotambola sima na yo. › Mpe sima na yango, nakobima. » \p Bongo Moyize abimaki na ndako ya Faraon na kanda makasi. \p \v 9 Yawe alobaki na Moyize : « Faraon akoboya koyokela bino mpo ete bikamwa na Ngai ekoka komonana ebele kati na Ejipito. » \p \v 10 Boye Moyize mpe Aron basalaki bikamwa wana nyonso liboso ya Faraon. Kasi Yawe akomisaki motema ya Faraon makasi mpe Faraon aboyaki kaka kotika bana ya Isalaele kobima na mokili na ye. \c 12 \s1 Feti ya Pasika \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron kati na Ejipito : \v 2 « Sanza oyo ekozala mpo na bino sanza ya liboso ya mobu. \v 3 Boloba boye na lisanga mobimba ya Isalaele : Na mokolo ya zomi na sanza oyo, libota moko na moko to ndako moko na moko esengeli kozala na mwana meme to na mwana ntaba. \v 4 Kasi soki bato ya ndako bazali ebele te mpo na kolia mwana meme ya mobimba, bakolia yango elongo na bato ya ndako oyo ezali pene na ndako na bango kolanda motango ya bato. Bakopona mwana meme kolanda oyo moko na moko akoki kolia. \v 5 Mwana meme to mwana ntaba oyo bakopona esengeli kozala ya mobali, ya mobu moko mpe ezanga mbeba. \v 6 Bokobatela yango kino na mokolo ya zomi na minei ya sanza yango. Na mokolo yango, bato nyonso ya lisanga ya Isalaele bakokata yango kingo na pokwa. \v 7 Bakozwa makila na yango mpe bakopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke ya bandako epai wapi bakolia nyama yango. \v 8 Na butu ya mokolo yango, bakotumba mosuni na yango na moto mpe bakolia yango elongo na mapa ezanga levire mpe matiti ya bololo. \v 9 Bakolia te mosuni oyo ebela malamu te to oyo batokisa, kasi bakolia kaka mosuni oyo batumba na moto elongo na makolo, moto mpe biloko ya kati. \v 10 Bokotika ata ndambo te kino na tongo. Kasi soki ndambo ekomi na tongo, botumba yango na moto. \v 11 Tala ndenge nini bokolia yango : bokolata mokaba na loketo, basandale na makolo, mpe bokosimba lingenda na loboko. Bokolia yango na lombangu. Ezali feti ya Pasika mpo na Yawe. \v 12 Kaka na butu yango, nakoleka na Ejipito ; nakoboma bana nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na bato kino na banyama ; mpe nakosambisa banzambe nyonso ya Ejipito na nzela ya bitumbu. Nazali Yawe. \v 13 Na bandako epai wapi bokozala, makila ekozala elembo mpo na bino ; bongo tango Ngai nakomona makila yango, nakoleka bino. Boye etumbu moko te ya kufa ekokweya kati na bino tango nakopesa etumbu na mokili ya Ejipito. \s1 Feti ya mapa ezanga levire \p \v 14 Mokolo yango ekozala mokolo ya ekaniseli mpo na bino. Bileko na bileko, bokobanda kosala feti na mokolo yango mpo na lokumu ya Yawe ; yango ekozala mpo na bino mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino. \v 15 Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire. Na mokolo ya liboso, bokolongola levire na bandako na bino ; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, kobanda na mokolo ya liboso kino na mokolo ya sambo, bakolongola ye kati na bato ya Isalaele. \v 16 Bokozala na mayangani ya bule na mokolo ya liboso mpe na mokolo ya sambo. Bokosala mosala moko te na mikolo wana longola kaka mosala ya kolamba bilei oyo moto na moto akolia. Yango kaka nde bokosala. \v 17 Bokosala feti ya Mapa ezanga levire, pamba te ezalaki na mokolo yango nde nabimisaki mampinga na bino na Ejipito. Bokosala feti na mokolo yango lokola mobeko ya libela na libela mpo na bakitani oyo bakoya sima na bino. \v 18 Na sanza ya liboso, bokolia mapa ezanga levire kobanda na pokwa ya mokolo ya zomi na minei kino na pokwa ya mokolo ya tuku mibale na moko. \v 19 Mikolo sambo, levire esengeli te komonana kati na bandako na bino ; pamba te moto nyonso oyo akolia eloko oyo ezali na levire, esengeli balongola ye na lisanga ya Isalaele, azala mopaya to mwana mboka ya Isalaele. \v 20 Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire. Na bisika nyonso oyo bokozala, bokolia kaka mapa ezanga levire. » \p \v 21 Moyize abengisaki bakambi nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Bokende kozwa na libota moko na moko mwana meme to mwana ntaba mpe bokata yango kingo lokola mbeka ya Pasika. \v 22 Bokokamata etape ya nzete ya izope, bokozindisa yango na makila oyo ekozala kati na sani monene, bokopakola yango na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke. Moko te kati na bino abima libanda ya ekuke ya ndako na ye kino na tongo. \v 23 Wana Yawe akoleka na mokili mpo na koboma bato ya Ejipito mpe akomona makila na libaya ya likolo mpe na mabaya mibale ya mipanzi oyo esimbaka ekuke, akoleka ekuke yango mpe akopesa nzela te na mobomi ete akota na bandako na bino mpo na koboma. \v 24 Bokotosa malako oyo lokola mobeko ya libela na libela mpo na bino mpe mpo na bakitani na bino. \v 25 Tango bokokota na mokili oyo Yawe akopesa bino ndenge alakaki, bosalela likambo oyo. \v 26 Bongo tango bana na bino bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini mpo na bino ? › \v 27 Bokoloba na bango : ‹ Ezali mbeka ya feti ya Pasika mpo na Yawe oyo alekaki bandako ya bana ya Isalaele kati na Ejipito mpe abikisaki bandako na biso tango abomaki bato ya Ejipito. › » \p Na bongo, bana ya Isalaele bafukamaki mpe bagumbamelaki Yawe. \v 28 Bato ya Isalaele basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize mpe Aron. \p \v 29 Na kati-kati ya butu, Yawe abomaki bana mibali nyonso ya liboso kati na Ejipito kobanda na mwana mobali ya liboso ya Faraon oyo azalaki kokonza na kiti ya bokonzi kino na mwana mobali ya liboso ya mokangami oyo azalaki kati na boloko, mpe bana mibali ya liboso ya bibwele nyonso. \v 30 Na butu wana, Faraon elongo na bakalaka na ye nyonso mpe bato nyonso ya Ejipito batelemaki ; mpe koganga makasi ezalaki na Ejipito, pamba te ezalaki na ndako moko te oyo ezangaki ebembe. \s1 Bana ya Isalaele babimi na Ejipito \p \v 31 Kaka na butu wana, Faraon abengisaki Moyize mpe Aron, alobaki na bango : « Botelema, bobima kati na bato na ngai, bino mpe bana ya Isalaele. Bokende kogumbamela Yawe ndenge bosengaki. \v 32 Bokamata bibwele na bino ndenge bolobaki : bangombe, bameme mpe bantaba ; mpe bokende. Boye, bopambola mpe ngai. » \p \v 33 Bato ya Ejipito batindikaki bana ya Isalaele ete babima noki na mokili na bango. Bazalaki koloba : « Bokende na bino, noki te biso tokokufa. » \p \v 34 Boye bato bazwaki potopoto na bango ya farine liboso ete batia yango levire, bazingaki na banzambala na bango banzungu oyo basalelaka potopoto mpe batiaki yango na mapeka na bango. \v 35 Bato ya Isalaele basalaki ndenge Moyize alobaki na bango mpe basengaki epai ya bato ya Ejipito biloko ya palata, ya wolo mpe bilamba. \v 36 Bongo Yawe asalaki ete bana ya Isalaele bazwa ngolu na miso ya bato ya Ejipito oyo bapesaki bango biloko oyo basengaki. Na ndenge wana nde basilisaki biloko ya bato ya Ejipito. \p \v 37 Bato ya Isalaele balongwaki na Ramisesi mpe bakendeki na Sukoti ; bazalaki mibali nkoto nkama motoba oyo bazalaki kotambola na makolo longola basi mpe bana. \v 38 Ezalaki lisusu na ebele ya bato oyo bakendeki na bango elongo ; bamemaki lisusu bibwele : bameme, bantaba mpe bangombe. \v 39 Basalaki na farine oyo bamemaki wuta na Ejipito bagato ezanga levire, pamba te tango babenganaki bango, potopoto emivimbelaki te mpe bazangaki tango ya kobongisa biloko ya kolia mpo na bango moko. \p \v 40 Mibu oyo bana ya Isalaele bavandaki na Ejipito ezalaki nkama minei na tuku misato. \v 41 Na suka ya mobu oyo ya nkama minei na tuku misato, mampinga nyonso ya Yawe batikaki Ejipito. \v 42 Lokola Yawe akengelaki butu wana mpo na kobimisa bana ya Isalaele na Ejipito, butu yango ekomi ya Yawe : ekobanda kozala butu ya kokengela mpo na bana ya Isalaele na milongo na bango nyonso oyo ekoya. \s1 Mibeko na tina na feti ya Pasika \p \v 43 Yawe alobaki na Moyize mpe Aron : « Tala mibeko na tina na Pasika : ‹ Mopaya moko te akoki kolia yango. \v 44 Kasi mowumbu nyonso oyo bakosomba, basengeli liboso kokata ye ngenga, sima nde akoki kolia Pasika. \v 45 Mopaya oyo akozala na bino mpo na tango moke mpe mosali oyo azwaka lifuti bakolia yango te. \v 46 Ekoliama kaka kati na ndako moko na moko, bakobimisa ata mosuni moko te na libanda ya ndako mpe bakobuka ata mokuwa na yango moko te. \v 47 Lisanga mobimba ya Isalaele ekosala feti ya Pasika. \v 48 Soki mopaya oyo azali kati na bino alingi kosepela na feti ya Pasika ya Yawe, esengeli ete mibali nyonso oyo bazali kati na ndako na ye bakatama ngenga ; bongo nde akozwa nzela ya kolia Pasika lokola mwana mboka ya Isalaele. Kasi mobali oyo akokatama ngenga te akoki kolia Pasika te. \v 49 Mibeko ezali se ndenge moko mpo na mwana mboka ya Isalaele mpe mpo na mopaya oyo azali kati na bino. › » \p \v 50 Bato nyonso ya Isalaele basalaki ndenge kaka Yawe atindaki Moyize mpe Aron. \v 51 Mpe na mokolo wana, Yawe abimisaki bana ya Isalaele na molongo, wuta na Ejipito, lokola mampinga ya basoda. \c 13 \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Bulisela Ngai mwana mobali nyonso ya liboso kati na bana ya Isalaele ; ezala moto to nyama, azali ya Ngai. » \s1 Feti ya mapa ezanga levire \p \v 3 Moyize alobaki na bato : « Bokanisa mokolo oyo bobimaki na Ejipito, mokolo oyo bobimaki na bowumbu, pamba te Yawe abimisaki bino na loboko na Ye ya nguya. Bokolia eloko moko te oyo ezali na levire. \v 4 Bozali kobima nde lelo oyo, na sanza ya abibi. \v 5 Tango Yawe akokotisa yo na mokili ya bato ya Kanana, ya bato ya Iti, ya bato ya Amori, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi, mokili oyo alakaki na batata na bino, na nzela ya ndayi, ete akopesa bino yango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, okosala feti oyo na sanza oyo. \v 6 Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire ; na mokolo ya sambo, bokosala feti mpo na Yawe. \v 7 Bokolia mapa ezanga levire mikolo sambo, mpe eloko moko te oyo ezali na levire ekomonana kati na mokili na bino mobimba. \v 8 Na mokolo wana, bokoyebisa na bana na bino ya mibali : ‹ Nazali kosala molulu oyo mpo na kokanisa makambo oyo Yawe asalelaki ngai tango abimisaki ngai na Ejipito. › \v 9 Feti oyo bokosala ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino mpo ete mibeko ya Yawe ezala na bibebu na bino, pamba te Ye nde abimisaki bino na Ejipito na loboko na Ye ya nguya. \v 10 Bokobatela mobu na mobu mibeko oyo na eleko na yango. \p \v 11 Tango Yawe akokotisa bino na mokili ya Kanana mpe akopesa bino yango ndenge alakaki yango, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai na bino, \v 12 bokobonzela Ye bana mibali nyonso ya liboso : bana nyonso ya liboso ya banyama ekozala ya Yawe. \v 13 Kasi soki mwana yango ya liboso ya nyama ezali mwana ya ane, bosengeli kobonza na esika na yango mwana meme ; soki te, bokobuka yango kingo. Kasi bokosikola na mbongo mwana nyonso ya liboso kati na bana na bino ya mibali. \v 14 Mikolo ekoya, tango bana na bino ya mibali bakotuna bino : ‹ Molulu oyo elakisi nini ? › Bokoloba na bango : ‹ Ezali na nguya na Ye nde Yawe abimisaki biso na Ejipito, mokili ya bowumbu. \v 15 Tango Faraon aboyaki kotika biso kokende, Yawe abomaki kati na Ejipito mwana nyonso ya liboso, ezala ya moto to ya nyama. Yango wana nazali kobonzela Yawe bana nyonso ya liboso kati na banyama mpe nazali kosikola bana nyonso ya liboso kati na bana na ngai. › \v 16 Mpe yango ekozala lokola elembo na loboko na bino mpe ekaniseli na elongi na bino, pamba te Yawe abimisaki bino na Ejipito na nzela ya loboko na Ye ya nguya. » \s1 Nzambe atambolisi bato na Ye \p \v 17 Tango Faraon atikaki bana ya Isalaele kokende, Nzambe amemaki bango te na nzela ya mboka ya Filisitia atako yango nde ezalaki mokuse, pamba te Nzambe amilobelaki : « Soki bakutani na bitumba, bakoyoka mawa na ndenge babimaki na Ejipito mpe bakoluka kozonga kuna. » \v 18 Boye, Nzambe amemaki bato na nzela ya molayi, na nzela oyo ekenda na esobe, na ngambo ya ebale monene ya barozo\f + \fr 13.18 \fr*\ft Rozo ezali lolenge ya matiti oyo ebotaka na mayi. Yango ezalaka pete mingi.\ft*\f*. Bato ya Isalaele babimaki libanda ya Ejipito na molongo lokola mampinga ya basoda. \p \v 19 Moyize azwaki mikuwa ya Jozefi, pamba te Jozefi alapisaki bana ya Isalaele ndayi ; alobaki : « Solo, Nzambe akozanga te kosunga bino, boye bokolongola mikuwa na ngai na esika oyo mpe bokomema yango elongo na bino. » \p \v 20 Tango balongwaki na Sukoti mpe batongaki molako na Etami, na mondelo ya esobe, \v 21 Yawe atambolaki liboso na bango, na moyi lokola likonzi ya lipata mpo na kolakisa bango nzela, mpe na butu lokola likonzi ya moto mpo na kongengisa bango, mpo ete batambola butu mpe moyi. \v 22 Likonzi ya lipata na moyi to likonzi ya moto na butu elongwaki na esika na yango te liboso ya bana ya Isalaele. \c 14 \ms1 Bokangolami ya kokoka \s1 Bato ya Ejipito balandi bana ya Isalaele \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \v 2 « Loba na bana ya Isalaele ete bazonga mpe batonga molako pembeni ya Pi-Ayiroti, kati ya Migidoli mpe ebale monene. Batonga yango etalana na Bala-Tsefoni pembeni ya ebale monene. \v 3 Faraon akokanisa ete bana ya Isalaele babungi na mokili, esobe ekangi bango. \v 4 Nakokomisa motema ya Faraon libanga, mpe ye akolanda bango ; kasi nakomonisa nkembo na Ngai, nakotelemela Faraon mpe mampinga na ye ; bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete Ngai nazali Yawe. » \p Bana ya Isalaele basalaki bongo. \p \v 5 Tango bayebisaki mokonzi ya Ejipito ete bana ya Isalaele bakimi, Faraon mpe bakalaka na ye babongolaki makanisi na bango mpo na bana ya Isalaele mpe balobaki : « Likambo nini oyo tosali ? Totiki Isalaele kokende mpe tozangeli bato oyo bakoki kosalela biso ! » \p \v 6 Boye Faraon azwaki shar oyo ezalaki ya kobombama mpe azwaki mampinga na ye elongo na ye. \v 7 Akamataki bashar nkama motoba oyo eleki malamu elongo na bashar nyonso ya Ejipito ; shar moko na moko ezalaki na basoda misato. \v 8 Yawe akomisaki motema ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, libanga mpo ete alanda bana ya Isalaele oyo bazalaki kotambola na bonsomi nyonso. \v 9 Bato ya Ejipito, bampunda nyonso ya Faraon mpe shar mosusu ya Faraon elongo na bato oyo batambolisaka yango mpe mampinga mosusu ya Faraon balandaki bana ya Isalaele mpe bazwaki bango tango batongaki molako na bango pembeni ya Pi-Ayiroti oyo etalana na Bala-Tsefoni. \s1 Bana ya Isalaele bakatisi ebale monene \p \v 10 Lokola Faraon apusanaki, bana ya Isalaele batombolaki miso na bango mpe bamonaki ete bato ya Ejipito bazali kolanda bango na sima. Bana ya Isalaele babangaki makasi mpe bagangaki epai na Yawe. \v 11 Balobaki na Moyize : \pi1 — Boni, ezali mpo ete malita ezali te na Ejipito, yango wana omemi biso mpo ete tokufa na esobe ? Osali biso nini awa obimisi biso na Ejipito ? \v 12 Toyebisaki yo te tango tozalaki na Ejipito : « Tika biso kimia, tika biso tosalela bato ya Ejipito ? » Pamba te elekaki malamu mpo na biso kosalela bato ya Ejipito na esika ya kokufa na esobe. \p \v 13 Moyize azongiselaki bango : \pi1 — Bobanga te, boyika mpiko ! Bokomona kokangolama oyo Yawe akomemela bino lelo ; bato ya Ejipito oyo bozali komona lelo, bokotikala komona bango lisusu te. \v 14 Yawe akobunda mpo na bino, mpe bino bovanda kimia. \p \v 15 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Mpo na nini ozali koganga boye epai na Ngai ? Loba na bana ya Isalaele ete batambola. \v 16 Kasi yo, tombola lingenda na yo, sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpe kabola mayi mpo ete bana ya Isalaele bakoka kokatisa ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. \v 17 Bongo Ngai, nakoyeisa motema ya bato ya Ejipito libanga mpo ete balanda bino mpe nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon mpe mampinga na ye nyonso elongo na bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda. \v 18 Bongo bato ya Ejipito bakoyeba ete nazali Yawe tango nakomonisa nkembo na Ngai na kotelemela Faraon, bashar na ye mpe bato na ye oyo batambolisaka bampunda. \p \v 19 Anjelu na Nzambe oyo azalaki kotambola liboso ya mampinga ya Isalaele azongaki sima na bango, mpe likonzi ya lipata elongwaki liboso na bango mpo ete etelema sima na bango. \v 20 Likonzi ya lipata etelemaki kati ya mampinga ya bato ya Ejipito mpe ya bana ya Isalaele. Likonzi ya lipata epesaki molili na ngambo moko mpe engengisaki ngambo mosusu ; yango wana butu mobimba, bato ya Ejipito bakokaki kopusana te pembeni ya bana ya Isalaele. \p \v 21 Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene ; bongo na butu mobimba, Yawe atindaki na ebale monene mopepe makasi ya este oyo ekabolaki mayi ya ebale monene. \v 22 Bato ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi. \p \v 23 Bato ya Ejipito balandaki bango mpe bango nyonso bakotaki kati na ebale monene : bampunda nyonso ya Faraon, bashar na ye mpe batambolisi ya bampunda. \v 24 Liboso ete tongo etana, Yawe atelemaki na likolo ya likonzi ya moto mpe ya lipata, atalaki mampinga ya bato ya Ejipito mpe akotisaki mobulu kati na yango. \v 25 Alongolaki bapine na bashar na bango mpo ete bamona pasi mpo na kokumba. Boye bato ya Ejipito balobaki : \pi1 — Tokima mosika ya bana ya Isalaele, pamba te Yawe azali kobundela bango liboso na biso. \p \v 26 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Sembola loboko na yo likolo ya ebale monene mpo ete mayi ezonga mpe ekweyela bato ya Ejipito, bashar na bango mpe batambolisi ya bampunda. \p \v 27 Moyize asembolaki loboko na ye likolo ya ebale monene, mpe liboso ete tongo etana, ebale monene ezongaki na esika na yango mpe bato ya Ejipito oyo balukaki kokima, bakutanaki na mayi liboso na bango. Boye Yawe azindisaki bango kati na ebale monene. \v 28 Mayi ezongaki mpe ezipaki bashar elongo na batambolisi ya bampunda mpe mampinga ya Faraon oyo elandaki bana ya Isalaele kati na ebale monene. Moko te kati na bango abikaki. \p \v 29 Kasi bana ya Isalaele batambolaki na ebale monene lokola na mabele ya kokawuka. Mayi etelemaki lokola mir na ngambo ya loboko na bango ya mobali mpe na ngambo ya loboko na bango ya mwasi. \v 30 Na mokolo wana, Yawe abikisaki bana ya Isalaele liboso ya bato ya Ejipito mpe bana ya Isalaele bamonaki bibembe ya bato ya Ejipito etandami na libongo ya ebale monene. \v 31 Tango bana ya Isalaele bamonaki nguya monene oyo Yawe atalisaki liboso ya bato ya Ejipito, babangaki Yawe mpe batiaki elikya na bango kati na Ye mpe kati na mosali na Ye Moyize. \c 15 \s1 Moyize mpe bana ya Isalaele bayembi loyembo \p \v 1 Moyize mpe bana ya Isalaele bayembaki loyembo oyo mpo na lokumu ya Yawe : \q1 Nakoyemba mpo na lokumu ya Yawe, \q2 mpo ete amonisi monene ya nkembo na Ye ! \q1 Azindisi mpunda mpe motambolisi \q2 na yango kati na ebale monene. \b \q1 \v 2 Yawe azali makasi na ngai, \q2 azali solo loyembo na ngai, \q1 azali mobikisi na ngai, \q2 azali Nzambe na ngai, \q1 nakokumisa Ye ; \q2 azali Nzambe ya tata na ngai, nakonetola Ye. \q1 \v 3 Yawe azali elombe ya bitumba ; \q2 Kombo na Ye ezali Yawe. \q1 \v 4 Azindisi na ebale monene, \q2 bashar mpe mampinga ya Faraon ; \q1 abwaki na ebale monene ya barozo, \q2 bakonzi mpe basoda oyo Faraon atielaka motema. \q1 \v 5 Mozindo ya mayi ezipi bango, \q2 bakiti kino na se ya ebale monene lokola libanga. \q1 \v 6 Loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, \q2 emonisi nguya na Yo ; \q1 loboko na Yo ya mobali, oh Yawe, \q2 enyati monguna. \b \q1 \v 7 Na monene ya nguya na Yo, \q2 obebisi batelemeli na Yo ; \q1 na kanda na Yo, otombokeli bango, \q2 mpe baziki lokola matiti. \q1 \v 8 Na pema ya zolo na Yo, \q2 mayi ekabwani, \q1 bambonge etelemi lokola mir, \q2 mpe mozindo ya mayi ekangami kati na ebale monene. \q1 \v 9 Monguna amilobelaki : \q2 « Nakolanda bango kino nakokanga bango, \q1 molimo na ngai ekotonda \q2 na biloko oyo nakobotola ; \q1 nakobimisa mopanga na ngai, \q2 mpe loboko na ngai ekobebisa bango. » \q1 \v 10 Kasi Yo, Yawe, ofuli mopepe na Yo, \q2 mpe ebale monene ezipi bango. \q2 Bazindi lokola mbodi kati na mayi makasi. \q1 \v 11 Oh Yawe, nani kati na banzambe azali lokola Yo ? \q2 Nani azali lokola Yo, kitoko makasi kati na bosantu, \q1 somo, mpe abongi na lokumu, \q2 mpe asalaka makambo ya kokamwa ? \q1 \v 12 Osembolaki loboko na Yo ya mobali, \q2 mpe mabele emeli bango. \q1 \v 13 Na bolingo na Yo, otambolisi bato oyo okangoli. \q2 Na makasi na Yo, omemi bango na Ndako na Yo ya bule. \q1 \v 14 Bikolo eyoki sango na yango mpe ekomi kolenga, \q2 somo ekangaki bato ya Filisitia. \q1 \v 15 Bakambi ya Edomi bakomi na somo, \q2 bankumu ya Moabi bakomi kolenga, \q1 bato ya Kanana balembi nzoto. \q2 \v 16 Kobanga mpe somo ekweyeli bango. \q1 Na nguya ya loboko na Yo, \q2 bakomi bababa lokola libanga \q1 kino bato na Yo, oh Yawe, balekaki, \q2 kino bato oyo osikolaki balekaki. \q1 \v 17 Okomema bango mpe okovandisa bango \q2 na ngomba na Yo, esika oyo obongisaki, \q1 oh Nkolo, mpo na kovanda, \q2 Esika ya bule, oh Yawe, esika oyo maboko na Yo esalaki. \q1 \v 18 Yawe akotikala mokonzi libela na libela ! \p \v 19 Tango bampunda ya Faraon, bashar na ye elongo na bato oyo batambolisaka yango bamikotisaki kati na ebale monene, Yawe azongisaki mayi ya ebale monene likolo na bango. Nzokande bana ya Isalaele bakatisaki ebale monene lokola na esobe. \p \v 20 Miriami, mwasi mosakoli mpe ndeko mwasi ya Aron, azwaki mbunda moke na loboko na ye mpe basi nyonso balandaki ye ; bazalaki kobeta bambunda mike mpe kobina. \v 21 Miriami ayembaki elongo na bango : \q1 « Boyembela Yawe, \q2 pamba te amonisi monene ya nkembo na Ye ; \q1 azindisi na ebale monene, \q2 mpunda mpe motambolisi na yango. » \ms1 Bana ya Isalaele batambolaki kati na esobe \s1 Mayi ya Mara \p \v 22 Moyize atambolisaki bana ya Isalaele wuta na ebale monene ya barozo mpe amemaki bango na nzela oyo ekenda na esobe ya Shuri. Batambolaki mikolo misato kati na esobe mpe bamonaki mayi te. \v 23 Tango bakomaki na Mara\f + \fr 15.23 \fr*\ft Mara elakisi : bololo.\ft*\f* epai wapi bamonaki mayi, bakokaki te komela mayi yango, pamba te ezalaki bololo. Yango wana babengaki esika yango Mara. \p \v 24 Boye bato bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe balobaki : « Tokomela nini ? » \p \v 25 Boye Moyize abelelaki Yawe, mpe Yawe alakisaki ye eteni ya nzete. Moyize abwakaki yango na mayi, mpe mayi ekomaki elengi mpo na komela. \p Ezalaki kuna nde Yawe apesaki bango bikateli, mibeko mpe amekaki bango. \v 26 Alobaki : « Soki boyoki na bokebi mongongo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bosali oyo ezali sembo na miso na Ye, soki bosali keba na malako na Ye mpe bobateli bikateli na Ye nyonso, nakotindela bino ata bokono moko te oyo natindelaki bato ya Ejipito ; pamba te nazali Yawe oyo abikisaka bino na bokono. » \p \v 27 Bongo bana ya Isalaele bakomaki na Elimi epai wapi bitima\f + \fr 15.27 \fr*\ft Etima ezali esika oyo mayi ebandaka kobima na mabele.\ft*\f* zomi na mibale mpe banzete ya mbila tuku sambo ezalaki. Ezalaki kuna nde batongaki molako na bango, pene ya mayi. \c 16 \s1 Mana mpe bakayi \p \v 1 Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele balongwaki na Elimi mpe bakomaki na esobe ya Tsini, oyo ezali kati ya Elimi mpe ngomba Sinai, na mokolo ya zomi na mitano, na sanza ya mibale sima na kobima na bango na Ejipito. \p \v 2 Lisanga nyonso ya bana ya Isalaele bayimaki-yimaki na tina na Moyize mpe Aron kati na esobe. \p \v 3 Bana ya Isalaele balobaki na bango : \pi1 — Ah ! Ebongaki kutu loboko na Yawe epamela biso kati na Ejipito, pamba te, kuna, tozalaki kovanda pembeni ya banzungu etonda na misuni ; tozalaki kolia mpe kotonda biloko. Kasi bino bomemi biso kati na esobe oyo mpo na koboma lisanga oyo nyonso na nzala ! \p \v 4 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Tala, nakokitisela bino mapa wuta na likolo. Mokolo na mokolo, bato bakobanda kobima mpe kolokota mapa oyo ekoki mpo na kolia mokolo wana. Na nzela wana, nakomeka bango mpo na kotala soki bakobatela to te malako na Ngai. \v 5 Na mokolo ya motoba, bakolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko mpe bakolamba yango. \p \v 6 Moyize mpe Aron balobaki na bana nyonso ya Isalaele : \pi1 — Na pokwa ya lelo, bokoyeba solo ete ezali Yawe nde abimisaki bino na Ejipito. \v 7 Boye lobi na tongo, bokomona nkembo na Yawe ; pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Mpo na yango, biso tozali banani mpo ete boyimayima epai na biso ? \p \v 8 Moyize alobaki lisusu : \pi1 — Bokoyeba ete ezali solo Yawe tango akopesa bino misuni ya kolia na pokwa mpe mapa ebele na tongo. Pamba te ayoki koyimayima na bino na tina na Ye. Biso tozali banani ? Boyimaki-yimaki na tina na biso te, kasi na tina na Yawe. \p \v 9 Boye Moyize alobaki na Aron : \pi1 — Yebisa lisanga nyonso ya bana ya Isalaele ete bapusana pene ya Yawe mpo ete ayoki koyimayima na bango. \p \v 10 Wana Aron azalaki koloba na lisanga nyonso ya bana ya Isalaele, babalolaki miso na bango na ngambo ya esobe, mpe bamonaki nkembo na Yawe kobima na mapata. \p \v 11 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 \v 12 — Nayoki koyimayima ya bana ya Isalaele. Yebisa bango : « Na pokwa ya lelo, bokolia misuni ; bongo na tongo, bokotonda mana\f + \fr 16.12 \fr*\ft Mana elingi koloba : oyo nini ?\ft*\f*. Boye, bokoyeba solo ete nazali Yawe, Nzambe na bino. » \p \v 13 Kaka na pokwa wana, bakayi\f + \fr 16.13 \fr*\ft Kayi ezali ndeke lokola ebenga.\ft*\f* eyaki mpe etondisaki molako ; mpe na tongo, mamwe ezalaki zingazinga ya molako. \p \v 14 Tango mamwe elimwaki, biloko ya mike-mike penza lokola bambuma ya mike-mike emonanaki na mabele ya esobe, pembe lokola mvula ya pembe. \p \v 15 Tango bana ya Isalaele bamonaki yango, batunanaki bango na bango : \pi1 — Oyo nini ? \m Pamba te bayebaki te soki ezali nini. \p Moyize alobaki na bango : \pi1 — Ezali mapa oyo Yawe apesi bino mpo ete bolia. \v 16 Tala mibeko oyo Yawe apesi na tina na likambo oyo : « Tika ete moto na moto alokota oyo ekoki mpo na ye kolia, omeri\f + \fr 16.16 \fr*\ft Omeri ezali ekolo oyo ekotaka balitele minei.\ft*\f* moko mpo na moto moko. Moto na moto akolokota kolanda motango ya bato oyo bazali kati na ndako na ye ya kapo. » \p \v 17 Bato ya Isalaele basalaki bongo : bamoko balokotaki moke ; mpe bamosusu, ebele. \v 18 Mpe bamekaki na omeri : moto oyo alokotaki ebele, alekelaki te ; mpe oyo alokotaki moke, azangelaki te. Balokotaki moto na moto kolanda oyo ekokaki mpo na ye kolia. \p \v 19 Moyize ayebisaki bango : \pi1 — Moko te abomba ata moke kino na tongo. \p \v 20 Kasi bamosusu kati na bango bayokelaki Moyize te mpe babombaki ndambo na yango kino na tongo. Boye bankusu etondaki na ndambo oyo babombaki, mpe ekomaki kolumba solo ya kopola. Mpo na yango, Moyize atombokelaki bango. \v 21 Tongo nyonso, moto na moto abandaki kolokota oyo ekokaki mpo na ye kolia. \s1 Mokolo ya kopema \p \v 22 Na mokolo ya motoba, bana ya Isalaele bazalaki kolokota mbala mibale ndambo oyo bazalaki kolokota mpo na mokolo moko : omeri mibale mpo na moto moko. Bakambi nyonso ya lisanga bayaki koyebisa yango Moyize. \v 23 Moyize alobaki na bango : \pi1 — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Lobi ezali mokolo ya kopema, mokolo ya Saba oyo ebulisami mpo na Yawe. Bokolamba oyo bolingi kolamba mpe bokotokisa oyo bolingi kotokisa ; kasi oyo ekotikala, bobatela yango kino lobi. » \p \v 24 Bato ya Isalaele babatelaki yango kino na tongo, ndenge kaka Moyize atindaki ; mana elumbaki te solo ya kopola, mpe bankusu ezalaki te kati na yango. \v 25 Moyize ayebisaki bango : \pi1 — Mokolo ya lelo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya Yawe. Bolia mana oyo bobombaki ; pamba te lelo, bokotikala te komona mana na libanda. \v 26 Bokobanda kolokota yango mikolo motoba ; kasi na mokolo ya sambo, mokolo ya Saba, mana ekobanda kozala te. \p \v 27 Atako bongo, na mokolo ya sambo, bato mosusu kati na bango babimaki mpo na kolokota yango, kasi bamonaki eloko te. \v 28 Boye Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Kino tango nini bokoboya kobatela mibeko mpe malako na Ngai ? \v 29 Botia na mito na bino ete Ngai Yawe, napesaki bino mokolo ya Saba. Yango wana, na mokolo ya motoba, napesaka bino mapa mpo na mikolo mibale. Boye tika ete, na mokolo ya sambo, moto na moto avanda epai na ye ; moko te abima na libanda. \p \v 30 Boye bato bapemaki na mokolo ya sambo. \p \v 31 Bato ya Isalaele babengaki lipa yango mana. Ezalaki pembe lokola bambuma ya koriande mpe elengi lokola mikate balamba na mafuta ya nzoyi. \p \v 32 Moyize alobaki : \pi1 — Tala mibeko oyo Yawe apesi : « Bozwa omeri moko ya mana mpe bobomba yango mpo na milongo ya bakitani na bino oyo ekoya, mpo ete bamona mapa oyo naleisaki bino na esobe tango nabimisaki bino na Ejipito. » \p \v 33 Boye Moyize alobi na Aron : \pi1 — Kamata ekolo moko mpe tia omeri moko ya mana kati na yango ; bongo tia yango liboso ya Yawe mpo ete ebombama mpo na milongo oyo ekoya. \p \v 34 Ndenge kaka Yawe atindaki Moyize, Aron atiaki mana yango liboso ya Sanduku ya Boyokani mpo ete ebombama malamu. \v 35 Bana ya Isalaele baliaki mana mibu tuku minei kino tango bakomaki na mondelo ya mokili ya Kanana. \p \v 36 Omeri moko ekokani na eteni ya zomi ya efa\f + \fr 16.36 \fr*\ft Efa ezali katini oyo ekotaka balitele tuku minei.\ft*\f*. \c 17 \s1 Mayi ebimi na libanga \p \v 1 Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele elongwaki na esobe ya Tsini mpe ezalaki kotambola kolanda ndenge Yawe azalaki kotinda. Batongaki molako na bango na Refidimi, kasi mayi ya komela ezalaki te mpo na bato. \v 2 Bato ya Isalaele baswanisaki Moyize, balobaki na ye : \pi1 — Pesa biso mayi ya komela ! \p Moyize azongiselaki bango : \pi1 — Mpo na nini bozali koswanisa ngai ? Mpo na nini bolingi komeka Yawe ? \p \v 3 Lokola posa ya mayi elekaki makasi, bato bayimaki-yimaki epai ya Moyize mpe balobaki : \pi1 — Mpo na nini obimisaki biso na Ejipito ? Ezali mpo ete obomisa biso, bana na biso mpe bibwele na biso na posa ya mayi ? \p \v 4 Moyize abelelaki Yawe : \pi1 — Nasala nini mpo na bato oyo ? Etikali kaka moke ete babamba ngai mabanga ! \p \v 5 Yawe azongiselaki Moyize : \pi1 — Leka liboso ya bato, kamata ndambo ya bakambi ya Isalaele. Zwa na loboko na yo, lingenda oyo obetaki na ebale Nili, mpe kende. \v 6 Ngai nakotelema kuna, liboso na yo, na likolo ya libanga oyo ezali na ngomba Orebi. Okobeta libanga yango, mpe yango ekobimisa mayi, bongo bato bakomela. \p Moyize asalaki bongo na miso ya bakambi ya Isalaele. \v 7 Abengaki esika yango Masa\f + \fr 17.7 \fr*\ft Masa elingi koloba : komeka.\ft*\f* mpe Meriba\f + \fr 17.7 \fr*\ft Meriba elingi koloba : koswana.\ft*\f*, pamba te bana ya Isalaele baswanisaki ye mpe bamekaki Yawe tango balobaki : « Boni, Yawe yango azali kati na biso to te ? » \s1 Bana ya Isalaele balongi bato ya Amaleki \p \v 8 Bato ya Amaleki bayaki mpe babundisaki bana ya Isalaele na Refidimi. \v 9 Moyize alobaki na Jozue : \pi1 — Ponela biso bilombe ya bitumba kati na bato ; mpe lobi ; wana yo okende kobundisa bato ya Amaleki, ngai nakotelema na likolo ya ngomba moke elongo na lingenda ya Nzambe na loboko na ngai. \p \v 10 Jozue asalaki ndenge Moyize atindaki ye mpe abundisaki bato ya Amaleki ; wana Moyize, Aron mpe Wuri bamataki likolo ya ngomba. \v 11 Tango nyonso Moyize abandaki kotombola maboko na ye mpo na kobondela, bana ya Isalaele bazalaki kolonga ; kasi tango nyonso azalaki kokitisa maboko na ye, bato ya Amaleki bazalaki kolonga. \v 12 Tango maboko ya Moyize elembaki, Aron mpe Wuri bakamataki libanga mpe batielaki ye yango mpo ete avandela yango ; mpe Moyize avandelaki yango. Aron mpe Uri batombolaki maboko na ye, moko na ngambo moko, mpe mosusu na ngambo mosusu. Boye maboko na ye etikalaki ya kosembolama kino na pokwa. \v 13 Mpe Jozue alongaki basoda ya bato ya Amaleki na mopanga. \p \v 14 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Koma yango na buku lokola ekaniseli, mpe loba na Jozue ete nakosilisa bato ya Amaleki na mokili ; bakotikala kokanisa bango lisusu te. \p \v 15 Moyize atongaki etumbelo mpe abengaki yango « Nkolo azali bendele na ngai ya lokumu. » \v 16 Moyize alobaki : « Lokola esali ete babundisi Kiti ya Bokonzi ya Yawe, Yawe akobundisa bato ya Amaleki tango nyonso. » \c 18 \s1 Jetro ayei kotala Moyize \p \v 1 Jetro, Nganga-Nzambe ya Madiani mpe bokilo ya Moyize, ayokaki makambo nyonso oyo Nzambe asalelaki Moyize mpe Isalaele, bato na Ye, mpe ndenge nini Yawe abimisaki Isalaele na Ejipito. \p \v 2 Jetro amemaki Sefora, mwasi ya Moyize, oyo ye Moyize azongisaki nanu epai ya baboti na ye, \v 3 elongo na bana mibali mibale oyo Sefora abotelaki Moyize. Mwana ya liboso, kombo na ye ezalaki « Gerishomi\f + \fr 18.3 \fr*\ft Gerishomi elingi koloba : mopaya kuna.\ft*\f*, » pamba te Moyize amilobelaki : « Nakomaki mopaya kati na mokili ya mopaya ; » \v 4 mwana ya mibale, kombo na ye ezalaki « Eliezeri\f + \fr 18.4 \fr*\ft Eliezeri elingi koloba : Nzambe Mosungi.\ft*\f*, » pamba te amilobelaki : « Nzambe ya tata na ngai asungaki ngai mpe akangolaki ngai wuta na mopanga ya Faraon. » \p \v 5 Jetro, bokilo ya Moyize, elongo na bana mibali ya Moyize mpe mwasi ya Moyize bayaki epai ya Moyize, na esobe epai wapi batongaki molako pembeni ya ngomba ya Nzambe. \v 6 Jetro atindelaki Moyize maloba oyo : \pi1 — Ngai Jetro, bokilo na yo, nazali koya epai na yo elongo na mwasi na yo mpe bana na yo mibale ya mibali. \p \v 7 Moyize abimaki mpo na kokutana na bokilo na ye ; agumbamaki liboso na ye mpe apesaki ye beze. Batunanaki basango ya moko na moko mpe bakotaki na ndako ya kapo. \v 8 Moyize ayebisaki bokilo na ye makambo nyonso oyo Yawe asalaki Faraon mpe bato ya Ejipito mpo na kokangola Isalaele, pasi nyonso oyo bakutanaki na yango na nzela mpe ndenge nini Yawe abikisaki bango. \v 9 Jetro asepelaki koyoka makambo wana nyonso ya kitoko oyo Yawe asalelaki bana ya Isalaele tango akangolaki bango wuta na maboko ya bato ya Ejipito. \p \v 10 Jetro alobaki : \pi1 — Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo akangolaki yo wuta na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya Faraon, Ye oyo akangolaki bato wuta na bowumbu ya bato ya Ejipito. \v 11 Nandimi sik’oyo ete Yawe azali monene koleka banzambe nyonso, pamba te asali makambo ya lolenge oyo epai ya banyokoli ya Isalaele. \p \v 12 Bongo Jetro, bokilo ya Moyize, abonzelaki Nzambe mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu. Aron elongo na bakambi nyonso ya Isalaele bayaki mpo na kolia lipa elongo na bokilo ya Moyize, na miso ya Nzambe. \s1 Toli ya Jetro \p \v 13 Mokolo oyo elandaki, Moyize avandaki mpo na kosambisa bato. Bato batelemaki liboso ya Moyize, kobanda na tongo kino na pokwa. \v 14 Tango bokilo na ye amonaki makambo nyonso oyo Moyize azalaki kosala mpo na bato, alobaki : \pi1 — Mpo na nini ozali kosala bongo tango ozali kotala makambo ya bato ? Mpo na nini ozali yo moko lokola mosambisi ? Mpo na nini bato oyo nyonso batelemi pembeni na yo, kobanda na tongo kino na pokwa ? \p \v 15 Moyize azongiselaki ye : \pi1 — Bayaka epai na ngai mpo na kotuna toli ya Nzambe. \v 16 Soki bazali na kowelana, bayaka epai na ngai ; mpe ngai nakataka makambo, sima nalakisaka bango mibeko mpe bikateli ya Nzambe. \p \v 17 Bokilo ya Moyize alobaki na ye : \pi1 — Lolenge na yo ya kosala ezali malamu te. \v 18 Okolemba noki elongo na bato oyo bazali koya epai na yo. Mosala oyo eleki makasi mpo na yo ; okolonga kosala yango yo moko te. \v 19 Yoka sik’oyo toli oyo nalingi kopesa yo, mpe tika ete Nzambe azala na yo. Mosala na yo ezali : kozala molobeli ya bato liboso ya Nzambe, komema mikumba na bango epai ya Nzambe \v 20 mpe kolakisa bango bikateli elongo na mibeko oyo ekotalisa bango nzela ya kolanda mpe makambo oyo basengeli kosala. \v 21 Mpe lisusu, kati na bato, pona mibali ya mayele, oyo batosaka Nzambe, oyo bato bakoki kotiela motema mpo ete basalelaka bosembo mpe bazwaka kanyaka te. Okotia bango lokola bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi. \v 22 Okopesa bango mosala ya kosambisa bato tango nyonso mpe ndingisa ya kokata bango moko makambo ya mike ; kasi babanda komemela yo kaka makambo ya minene. Soki osali bongo, okozala lisusu na mokumba ya makasi te ; pamba te okokabola yango elongo na bango. \v 23 Soki osaleli toli oyo napesi yo mpe soki Nzambe akambi yo, okolonga, mpe bato oyo nyonso bakobanda kozonga na esengo epai na bango. \p \v 24 Moyize ayokaki toli oyo bokilo na ye apesaki ye mpe asalelaki makambo nyonso oyo alobaki. \v 25 Moyize aponaki bato ya mayele kati na bana ya Isalaele mpe akomisaki bango bakambi ya bato : bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi. \v 26 Bazalaki tango nyonso kati na bato mpo na kosambisa bato mpe kokata makambo ; bazalaki kokata bango moko makambo ya mike, kasi bazalaki komema oyo ya minene epai ya Moyize. \p \v 27 Moyize apesaki nzela ete bokilo na ye akende, mpe Jetro azongaki na mokili na ye. \c 19 \ms1 Boyokani ya Sinai \s1 Nzambe aponi Isalaele \p \v 1 Sanza misato sima na bana ya Isalaele kobima na Ejipito, kaka na mokolo yango, bana ya Isalaele bakomaki na esobe ya Sinai. \v 2 Tango balongwaki na Refidimi, bakotaki na esobe ya Sinai, mpe Isalaele atongaki kuna kati na esobe molako etalana na ngomba. \p \v 3 Moyize amataki na ngomba mpo na kosolola na Nzambe ; mpe wuta na likolo ya ngomba, Yawe abengaki ye mpe alobaki na ye : \pi1 — Tala makambo oyo okoyebisa bakitani ya Jakobi mpe oyo okotalisa na bana ya Isalaele : \v 4 « Bomonaki bino moko ndenge nini nasalaki bato ya Ejipito mpe ndenge nini namemaki bino lokola na mapapu ya mpongo kino epai na Ngai. \v 5 Soki botosi Ngai penza mpe bobateli boyokani na Ngai, bokozala mpo na Ngai ekolo ya motuya kati na bikolo nyonso. Atako mokili mobimba ezali ya Ngai, \v 6 kasi bino bokozala mpo na Ngai ekolo oyo ekosala mosala ya bonganga-Nzambe, ekolo ya bule. » Oyo nde maloba okoyebisa bana ya Isalaele. \p \v 7 Moyize azongaki, abengisaki bakambi ya Isalaele mpe ayebisaki bango maloba nyonso oyo Yawe atindaki ye koloba. \v 8 Bato nyonso bazongisaki lokola moto moko : \pi1 — Tokosala nyonso oyo Yawe alobi. \p Bongo Moyize amemaki eyano na bango epai na Yawe. \p \v 9 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Nazali koya epai na yo kati na lipata monene, mpo ete bana ya Isalaele bayoka tango nakosolola na yo mpe mpo ete batia tango nyonso elikya na bango epai na yo. \p Moyize ayebisaki Yawe makambo nyonso oyo bana ya Isalaele balobaki. \s1 Libulisi ya bato \p \v 10 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Kende epai ya bato, bulisa bango lelo mpe lobi, bongo yebisa bango ete basukola bilamba na bango ; \v 11 bamibongisa mpo na mokolo ya misato, pamba te na mokolo wana nde Ngai Yawe, nakokita na likolo ya ngomba Sinai, na miso ya bana nyonso ya Isalaele. \v 12 Okotia bandelo zingazinga ya ngomba mpo na bato mpe okoyebisa bango : « Bosala keba ete bomata te na ngomba oyo mpe bopusana te pembeni na yango. Moto nyonso oyo akotuta yango akokufa penza. \v 13 Soki moto moko abuki mobeko oyo, bakosimba ye te, kasi bakoboma ye na mabanga to bakotobola ye likonga ; ezala moto to nyama, asengeli kokufa. Kaka soki lokito ya liseke ya meme eyokani makasi nde ndambo ya bato bakomata na ngomba. » \p \v 14 Moyize alongwaki na ngomba, akendeki epai ya bana ya Isalaele, abulisaki bango, mpe basukolaki bilamba na bango. \v 15 Moyize alobaki na bango : \pi1 — Bomilengela mpo na mokolo ya misato, bosangisa nzoto te na basi na bino. \s1 Yawe akiti na ngomba Sinai \p \v 16 Na tongo ya mokolo ya misato, bakake ebetaki, mikalikali ezalaki kongenga, mpe lipata monene ezipaki ngomba ; bongo bato bayokaki bakelelo kobeta makasi. Bato nyonso kati na molako balengaki. \v 17 Moyize abimisaki bato mpo ete bakende kokutana na Nzambe, na libanda ya molako. Mpe bato batelemaki na ebandeli ya ngomba. \v 18 Milinga ezipaki ngomba Sinai mpo ete Yawe akitaki na likolo na yango na lolenge ya moto, bongo milinga yango ezalaki komata lokola milinga oyo ebimaka na fulu ya moto. Mpe ngomba nyonso eninganaki makasi. \v 19 Mongongo ya kelelo ezalaki kaka komata se komata. Boye Moyize abandaki koloba na Nzambe, mpe Nzambe azalaki koyanola ye na lokito ya kake. \p \v 20 Yawe akitaki na likolo ya ngomba Sinai mpe abengaki Moyize mpo ete amata na songe ya ngomba yango. Boye Moyize amataki. \v 21 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Kita mpe kebisa bato ete baleka bandelo te mpo na koluka komona Ngai Yawe, noki te mingi kati na bango bakokufa. \v 22 Ezala Banganga-Nzambe oyo basengeli kopusana pene na Ngai, basengeli komibulisa ; noki te Ngai Yawe, nakoboma bango. \p \v 23 Moyize alobaki na Yawe : \pi1 — Bato ya Isalaele bakoki te komata na ngomba Sinai, pamba te Yo moko oyebisaki biso ete totia bandelo zingazinga ya ngomba mpe tomona yango lokola bule. \p \v 24 Yawe azongiselaki ye : \pi1 — Kita lisusu ; bongo omata elongo na Aron. Kasi mpo na Banganga-Nzambe mpe bana ya Isalaele, tika ete bawelela komata te epai na Ngai Yawe, noki te nakoboma bango. \p \v 25 Moyize akitaki, akendeki epai ya bana ya Isalaele mpe ayebisaki bango makambo oyo Yawe alobaki. \c 20 \s1 Mibeko zomi \p \v 1 Tala maloba oyo Nzambe alobaki : \b \li4 \v 2 « Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu. \b \li1 \v 3 Okozalaka na banzambe mosusu te, bobele Ngai. \li1 \v 4 Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele. \v 5 Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai. \v 6 Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai. \li1 \v 7 Okotangaka te na pamba Kombo ya Yawe, Nzambe na yo, pamba te Yawe akopesa etumbu na moto nyonso oyo akotanga Kombo na Ye na pamba. \li1 \v 8 Kanisaka mokolo ya Saba mpe bulisaka yango. \v 9 Okosalaka misala na yo nyonso mikolo motoba. \v 10 Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te ; ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo. \v 11 Pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki Likolo, mabele, ebale monene mpe nyonso oyo ezali kati na yango, kasi akataki mosala na mokolo ya sambo. Yango wana, Yawe apambolaki mokolo ya Saba mpe abulisaki yango. \li1 \v 12 Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo. \li1 \v 13 Okobomaka te. \li1 \v 14 Okosalaka ekobo te. \li1 \v 15 Okoyibaka te. \li1 \v 16 Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo. \li1 \v 17 Okolulaka te ndako ya moninga na yo ; okolulaka te mwasi ya moninga na yo, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. » \s1 Moyize alobeli bato epai ya Nzambe \p \v 18 Tango bato bayokaki bakake mpe koganga ya kelelo, mpe bamonaki mikalikali mpe milinga kobima na ngomba, balengaki. Batelemaki mosika \v 19 mpe balobaki na Moyize : \pi1 — Tika ete yo moko oloba na biso, mpe tokoyoka yo ; kasi Nzambe te, noki te tokokufa ! \p \v 20 Moyize azongiselaki bango : \pi1 — Bobanga te ! Nzambe ayei nde komeka bino mpo ete kobanga Nzambe ezala kati na bino mpe bosala masumu te. \p \v 21 Bato bazalaki kaka mosika, wana Moyize apusanaki pembeni ya lipata oyo kati na yango Nzambe azalaki. \s1 Banzambe ya bikeko mpe bitumbelo \p \v 22 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Yebisa makambo oyo epai ya bana ya Isalaele : « Bomonaki bino moko ndenge nini nalobelaki bino wuta na likolo. \v 23 Bokomisalela te banzambe ya bikeko ya palata to ya wolo, mpo na kosangisa yango na Ngai. \v 24 Okotongela Ngai etumbelo ya mabele epai wapi okobonza bambeka na yo ya kotumba, bambeka na yo ya boyokani, meme na yo, ntaba na yo, ngombe na yo. Esika nyonso oyo nakomimonisa mpo na lokumu ya Kombo na Ngai, nakoya epai na yo mpe nakopambola yo. \v 25 Soki otongeli Ngai etumbelo ya mabanga, okotonga yango te na mabanga oyo bakata ; pamba te soki okati yango, okobebisa bosantu na yango. \v 26 Okomata te na etumbelo na Ngai na ematelo mpo ete bolumbu na yo emonana te. » \c 21 \ms1 Yawe apesi bana ya Isalaele mibeko \s1 Na tina na Ba-Ebre oyo bakomi bawumbu \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Tala mibeko oyo okoyebisa bana ya Isalaele : \v 2 « Soki bosombi Mo-Ebre moko lokola mowumbu, akosalela bino mibu motoba ; na mobu ya sambo, akozwa bonsomi mpe akofuta eloko moko te. \v 3 Soki azalaki monzemba tango ayaki, asengeli kokende ye moko ; kasi soki azalaki na mwasi tango ayaki, mwasi na ye asengeli kokende na ye elongo. \v 4 Soki nkolo na ye apesaki ye mwasi mpe mwasi yango abotelaki ye bana mibali to bana basi, mwasi mpe bana bakozala ya nkolo na ye ; mobali akokende ye moko. \v 5 Kasi soki mowumbu alobi : ‹ Nalingaka nkolo na ngai, mwasi na ngai mpe bana na ngai, nalingi te kozwa bonsomi, › \v 6 wana nkolo na ye asengeli komema ye liboso ya basambisi ; akomema ye na ezipelo ya ekuke to na mabaya oyo esimbaka ekuke mpe akotobola ye litoyi na motonga ; mpe mowumbu akosalela nkolo yango mpo na libela. \pi1 \v 7 Soki moto ateki mwana na ye ya mwasi lokola mwasi mowumbu, mwana yango akozwa bonsomi te ndenge bawumbu bazwaka yango. \v 8 Soki mwana mwasi asepelisi te nkolo oyo aponaki ye mpo ete azala mowumbu na ye, nkolo yango akotika ete mwana mwasi asikolama ; azali na ndingisa te ya koteka ye epai ya bapaya. Kasi soki ateki ye, wana asambwisi ye. \v 9 Soki aponaki mwana mwasi yango mpo ete azala mwasi ya mwana na ye ya mobali, asengeli kokokisa makambo oyo mibeko esengaka mpo na kobala mwasi. \v 10 Soki abali mwasi mosusu, akolongola eloko te na oyo etali kolia, kolata mpe oyo basalelaka mwasi ya libala. \v 11 Soki apimeli ye ata eloko moko kati na biloko oyo misato, wana mwasi oyo akoki kokende na bonsomi mpe akofuta eloko moko te. \s1 Na tina na evandeli kati na bato \pi1 \v 12 Moto oyo akobeta moninga na ye kino koboma ye, basengeli koboma ye. \v 13 Nzokande, soki azalaki na likanisi ya koboma te, kasi Nzambe atiki ete yango esalema na nzela ya maboko na ye, moto wana akokima na esika oyo Ngai Yawe nakopona. \v 14 Kasi soki moto akaneli moninga na ye mpe aluki koboma ye na mayele mabe, okomema ye mosika ya etumbelo na Ngai mpo na koboma ye. \pi1 \v 15 Moto oyo akobeta tata to mama na ye, asengeli kozwa etumbu ya kufa. \pi1 \v 16 Moto oyo akokanga moto mosusu na makasi mpo na kokima na ye, ezala soki ateki moto yango to bakangi ye na moto yango na maboko, asengeli kozwa etumbu ya kufa. \pi1 \v 17 Moto oyo akolakela tata to mama na ye mabe, asengeli kozwa etumbu ya kufa. \pi1 \v 18 Soki bato baswani, bongo moko abeti moninga likofi to libanga ; mpe moto oyo babeti likofi to libanga akufi te kasi abeli makasi ; \v 19 soki moto oyo babeti atelemi mpe atamboli na nzete kino na libanda, bakokatela moto oyo abetaki ye etumbu te, kasi akofuta kaka mikolo oyo moto yango azalaki kosala te mpe akosalisa ye kino akobika. \pi1 \v 20 Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, bongo mowumbu yango akufi na mbala moko, moto wana asengeli kozwa etumbu. \v 21 Kasi soki mowumbu yango awumeli lisusu na bomoi mokolo moko to mibale, wana nkolo na ye akozwa etumbu te, pamba te asombaki ye na mbongo. \pi1 \v 22 Soki mibali, wana bazali kobunda, batutani na mwasi ya zemi, bongo mwasi yango aboti mwana matsombe mpe likama mosusu emonani te, wana basengeli kofuta lomande ndenge mobali ya mwasi yango akokata kolanda mokano ya basambisi. \v 23 Kasi soki likama ezali, okofuta bomoi mpo na bomoi : \v 24 liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo, \v 25 kozika mpo na kozika, pota mpo na pota, litutu mpo na litutu. \pi1 \v 26 Soki moto abeti mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye na liso, mpe liso yango ekufi, moto yango akopesa bonsomi na mowumbu mpo na liso na ye. \v 27 Soki abuki linu ya mowumbu na ye ya mobali to ya mwasi mowumbu na ye, akopesa ye bonsomi mpo na linu na ye. \pi1 \v 28 Soki ngombe ebomi moto na maseke, basengeli koboma ngombe yango na mabanga, mpe bakolia mosuni na yango te ; nzokande nkolo na yango akozwa etumbu te. \v 29 Soki ngombe ezali na momesano ya kobeta bato maseke, bongo bakebisi makasi nkolo na yango, kasi ye abateli kaka ngombe na ye malamu te mpe yango ebomi moto ; basengeli koboma ngombe yango na mabanga mpe nkolo na yango asengeli kozwa etumbu ya kufa. \v 30 Kasi soki basengi ye lomande mpo na kosikola bomoi na ye, akofuta nyonso oyo bakosenga ye. \v 31 Bakosalela mpe mobeko oyo soki ngombe ebeti mwana mobali to mwana mwasi maseke. \v 32 Soki ngombe ebeti mowumbu ya mobali to mwasi mowumbu maseke, nkolo na yango asengeli kofuta mbongo ya bibende, tuku misato, epai ya nkolo ya mowumbu, mpe bakobamba ngombe yango mabanga. \s1 Na tina na biloko \pi1 \v 33 Soki moto atiki libulu polele to atimoli libulu mpe azipi yango te, bongo ngombe to ane ezindi kuna ; \v 34 nkolo libulu asengeli kofuta epai ya nkolo nyama mbongo oyo ekokani na motuya ya nyama oyo esili kokufa, mpe nyama yango ekokoma ya ye. \pi1 \v 35 Soki ngombe ya moto moko ebomi ngombe ya moto mosusu, esengeli koteka ngombe oyo ezali na bomoi mpe kokabola na kati-kati mbongo mpe ngombe oyo esili kokufa. \v 36 Kasi soki eyebani ete ngombe yango emesana kobeta bato maseke, bongo nkolo na yango abateli yango malamu te ; wana asengeli kofuta ngombe mpo na ngombe, mpe ngombe ya kokufa ekokoma ya ye. \c 22 \s1 Na tina na moyibi ya banyama \pi1 \v 1 Soki moto ayibi ngombe moko to meme moko, bongo abomi yango to ateki yango ; asengeli kofuta bangombe mitano mpo na ngombe moko oyo ayibaki to bameme minei mpo na meme moko oyo ayibaki. \pi1 \v 2 Soki bakangi moto azali koyiba, bongo babeti ye mpe akufi ; mobomi akozwa etumbu te mpo na makila oyo esopani. \v 3 Kasi soki makambo yango esalemi na moyi, moto oyo akoboma ye akozwa etumbu mpo na makila oyo esopani. Moyibi nyonso asengeli kozongisa biloko oyo ayibi. Soki azali na eloko te, bakoteka ye mpo na kofuta eloko oyo ayibaki. \v 4 Soki ayibaki nyama, ezala ngombe, ane to meme, bongo bakuti nyama yango ya bomoi na maboko na ye, akofuta banyama mibale. \s1 Na tina na bozwi ya moninga \pi1 \v 5 Soki moto azali koleisa bibwele na ye matiti na elanga na ye to na elanga na ye ya vino, bongo atiki bibwele yango koyengayenga mpe ekeyi kolia matiti na elanga to na elanga ya vino ya moto mosusu, nkolo bibwele asengeli kofuta mbuma oyo eleki kitoko kati na elanga na ye to kati na elanga na ye ya vino. \v 6 Soki moto apelisi moto, bongo moto yango ekutani na banzete ya sende, epanzani mpe ezikisi ble oyo basili kotia na maboke to ble oyo babuki nanu te, moto oyo apelisaki moto asengeli kofuta biloko nyonso oyo eziki. \pi1 \v 7 Soki moto abombisi palata to biloko na ye ya motuya epai ya moninga na ye, bongo bayibi yango kati na ndako ya moninga wana ; soki bakangi moyibi ya biloko yango, akozongisa mbala mibale biloko oyo ayibaki. \v 8 Kasi soki moyibi amonani te, nkolo ndako asengeli kosamba liboso ya basambisi mpo na koyeba soki ayibaki biloko ya moninga na ye to te. \v 9 Na likambo nyonso ya moyibi, soki bato mibale bazali kowela ngombe, ane, meme, elamba to eloko nyonso oyo ebungaki, bongo moto na moto azali koloba : ‹ Ezali ya ngai ! › bango mibale bakomema likambo na bango liboso ya basambisi ; bongo moto oyo basambisi bakokweyisa akozongisa yango mbala mibale epai ya moninga na ye. \pi1 \v 10 Soki moto apesi moninga na ye ngombe to ane to meme to nyama mosusu mpo ete abokola, bongo nyama yango ekufi to ebukani to bayibi yango mpe ata moto moko te amoni mpo na kotatola ndenge nini likambo yango esalemaki, \v 11 kaka ndayi oyo balapi na Kombo na Yawe nde ekokabola bango : Moto oyo andimaki kobokola akolapa ndayi liboso ya Yawe mpo na kotalisa ete ayebi likambo te. Bongo nkolo nyama asengeli kondima maloba ya moninga na ye mpe ye akofuta nyama yango te. \v 12 Kasi soki bayibi nyama yango na maboko ya moto oyo andimaki kobokola yango, akofuta nyama yango epai ya nkolo na yango. \v 13 Soki ezali nyama ya zamba nde ebomaki nyama yango, moto oyo andimaki kobokola yango akomema lokola litatoli biteni oyo etikali ; bongo akofuta nyama yango te. \v 14 Soki moto adefi nyama epai ya moninga na ye, bongo ebukani lokolo to ekufi na tango oyo nkolo na yango azali te, moto wana asengeli kofuta yango. \v 15 Nzokande soki nkolo na yango azalaki wana, moto oyo adefaki akofuta nyama yango te. Soki bayokanaki ete akofuta mbongo sima na kosalela yango, asengeli kofuta mbongo oyo bayokanaki. \pi1 \v 16 Soki mobali alingi elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali na mobandami na libala te, bongo asangisi na ye nzoto, asengeli kofuta mbongo ya libala mpo ete akoma mwasi na ye. \v 17 Soki tata ya elenge mwasi aboyi kopesa mwana na ye na libala epai ya mobali wana, mobali yango akofuta mbongo ya libala na motuya oyo babalelaka elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te. \pi1 \v 18 Okotika te na bomoi mwasi oyo asalaka maji. \pi1 \v 19 Moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama, asengeli kozwa etumbu ya kufa. \pi1 \v 20 Moto nyonso oyo akotumba mbeka mpo na nzambe mosusu, basengeli koboma ye ; mbeka ekotumbama kaka mpo na Yawe Ye moko. \s1 Na tina na makambo mosusu \pi1 \v 21 Okosalisa mopaya mosala na ndenge ya mabe te mpe okonyokola ye te, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito. \pi1 \v 22 Bokonyokola te mwasi oyo akufisa mobali to mwana etike. \v 23 Soki bonyokoli bango, bongo bango bagangi epai na Ngai, solo nakoyoka koganga na bango. \v 24 Nakosilikela bino, nakoboma bino na mopanga ; bongo basi na bino mpe bakokoma basi bakufisa mibali mpe bana na bino, bana bitike. \pi1 \v 25 Soki odefisi mbongo na moko kati na bato na Ngai, na mobola oyo azali kati na bino, okosala te ndenge modefisi mbongo asalaka ; okosenga ye mileki te. \pi1 \v 26 Soki moninga na yo asimbisi yo kazaka na ye lokola ndanga, okozongisela ye yango liboso ete butu eya ; \v 27 pamba te azali kaka na kazaka wana mpo na kofinika nzoto na ye. Akofinika lisusu nini tango akolala ? Soki agangi epai na Ngai, nakoyoka ye mpo ete nazali Nzambe ya mawa. \s1 Na tina na lokumu ya kopesa na Nzambe \pi1 \v 28 Okofingaka Nzambe te mpe okolakelaka mokambi ya bato na yo mabe te. \pi1 \v 29 Okowumisa te kopesa Ngai mbuma ya liboso oyo ekomela mpe vino oyo okamoli. Okopesa Ngai mwana na yo ya liboso ya mobali. \pi1 \v 30 Okosala mpe lolenge moko mpo na bana liboso ya bangombe, bameme mpe bantaba na yo : ekotikala mikolo sambo elongo na bamama na yango ; bongo na mokolo ya mwambe, okopesa Ngai yango. \pi1 \v 31 Bokozala bule mpo na Ngai : bokolia te mosuni ya nyama oyo babomi na nyama ya zamba ; bosengeli kopesa yango na bambwa. \c 23 \s1 Na tina na bosembo \pi1 \v 1 Okopanza sango ya lokuta te ; okosangana te na moto mabe mpo na koloba litatoli ya lokuta. \v 2 Okolanda ebele ya bato te mpo na kosala mabe. Tango okoloba litatoli liboso ya basambisi, okotatola te kolanda mokano ya bato ebele mpo na kokweyisa bosembo. \v 3 Okokotela mobola te na tango azali kosamba liboso ya basambisi. \pi1 \v 4 Soki okutani na ngombe to ane ya monguna na yo, oyo ebungi, osengeli kozongisela ye yango. \v 5 Soki omoni ane ya moto oyo ayinaka yo ekweyi na se ya mokumba oyo yango ememi, okotika yango wana te ; osengeli kosalisa yango. \pi1 \v 6 Okokweyisa bosembo ya mobola te tango azali kosamba liboso ya basambisi. \v 7 Okozala mosika ya makambo ya lokuta. Okoboma te ezala moto oyo ayebi likambo te to moto ya sembo ; pamba te nalongisaka te moto mabe. \v 8 Okondimaka kanyaka te, pamba te kanyaka ezipaka miso ya bato oyo bamonaka malamu mpe ebebisaka maloba ya moto ya sembo. \pi1 \v 9 Okonyokola mopaya te, pamba te oyebi yo moko ndenge ezalaka soki ozali mopaya ; bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito. \s1 Na tina na mobu ya bopemi mpe mokolo ya Saba \pi1 \v 10 Mibu motoba, okolona bilanga na yo mpe okobuka mbuma. \v 11 Kasi na mobu ya sambo, okopemisa mabele. Boye babola kati na bato na yo bakozwa bilei ya kolia kati na yango mpe nyama ya zamba ekolia bilei oyo bato bakotika. Okosala ndenge moko mpo na elanga na yo ya vino mpe mpo na nzete na yo ya olive. \pi1 \v 12 Mikolo motoba, okosala mosala na yo ; kasi na mokolo ya sambo, okosala mosala moko te mpo ete ngombe na yo elongo na ane na yo ekoka kopema, mpe mpo ete mwana mobali ya mwasi mowumbu na yo mpe mopaya bazwa lisusu makasi. \pi1 \v 13 Bokosala keba na makambo nyonso oyo nayebisi bino. Bokobelela kombo ya banzambe mosusu te ; bokomeka kutu te kotanga yango na bibebu na bino. \s1 Na tina na bafeti misato ya minene na mobu \pi1 \v 14 Mbala misato na mobu, bokosala bafeti misato mpo na Ngai. \pi1 \v 15 Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Na mikolo sambo kolanda ndenge napesaki bino mitindo, bokolia mapa ezanga levire na tango oyo ekatama, na sanza ya Abibi\f + \fr 23.15 \fr*\ft Abibi ezali sanza oyo ble ekomelaka.\ft*\f*, mpo ete ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito. \pi1 \v 16 Okosala feti ya kobuka bambuma, okosala mpe feti ya bambuma ya liboso ya bilanga na yo, oyo olonaki. Na suka ya mobu, okosala feti ya kobuka bambuma tango okobuka mbuma ya elanga. \pi1 \v 17 Mbala misato na mobu, bato nyonso bakoya liboso ya Nkolo Yawe. \pi1 \v 18 Okobonzela Ngai te mbeka ya makila elongo na mapa batia levire. Mafuta ya nyama ya feti na Ngai ekoki kobombama te kino na tongo. \pi1 \v 19 Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango. \s1 Yawe alaki kosunga bato ya Isalaele \pi1 \v 20 Nakotinda anjelu liboso na bino mpo ete abatela bino na nzela mpe amema bino na esika oyo nabongisaki mpo na bino. \v 21 Bosala keba na miso na ye mpe boyoka makambo oyo akoloba ; botombokela ye te mpo ete akolimbisa botomboki na bino te, pamba te Kombo na Ngai ezali kati na ye. \pi1 \v 22 Kasi soki boyoki na bokebi makambo oyo akoyebisa bino mpe soki bosaleli nyonso oyo nalobi, nakozala monguna ya banguna na bino mpe nakotelemela bato oyo bakotelemela bino. \v 23 Anjelu na Ngai akotambola liboso na bino mpe akokotisa bino na mokili ya bato ya Amori, ya bato ya Iti, ya bato ya Perizi, ya bato ya Kanana, ya bato ya Evi mpe ya bato ya Yebusi ; bongo Ngai nakosilisa bango. \pi1 \v 24 Bokogumbamela banzambe na bango te mpe bokosalela yango te to bokolanda te lolenge na bango ya kosalela. Bokokweyisa banzambe yango mpe bokobuka-buka bikeko na bango na biteni. \v 25 Soki bokosalela Yawe, Nzambe na bino, akopambola mapa mpe mayi na bino, mpe akolongola bokono kati na bino. \v 26 Na mboka na bino, ekozala na mwasi moko te oyo akosopa zemi to akozanga kobota. Nakobakisela bino mikolo ebele na bomoi na bino. \pi1 \v 27 Nakotinda somo na Ngai liboso na bino mpe nakokotisa mobulu kati na bikolo nyonso oyo bokokota. Banguna na bino nyonso bakopesa bino mokongo mpe bakokima. \v 28 Nakotinda banzoyi ya minene liboso na bino mpo na kobengana bato ya Evi, ya Kanana mpe ya Iti na liboso na bino. \v 29 Kasi nakobengana bango te na mbala moko mpo ete mboka ekoma te lokola ndako ezanga bato, mpe mpo ete banyama ya zamba ekoma mingi te mpo na kotungisa bino. \v 30 Nakobengana bango moke-moke liboso na bino kino bokokoma ebele mpo na kozwa mboka. \v 31 Nakotia bandelo na bino kobanda na ebale monene ya barozo kino na ebale monene ya bato ya Filisitia mpe kobanda na esobe ya Sinai kino na ebale Efrate ; pamba te nakopesa bato ya mboka na maboko na bino, bongo bino bokobengana bango liboso na bino. \pi1 \v 32 Bokosala boyokani te elongo na bango mpe elongo na banzambe na bango. \v 33 Botika bango te ete bawumela na mokili na bino, noki te bakotinda bino kosala masumu liboso na Ngai mpe kosalela banzambe na bango ; pamba te ekozala solo motambo mpo na bino. » \c 24 \s1 Yawe alendisi boyokani elongo na Isalaele \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Mata epai na Yawe, yo elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele ; bokogumbama na mosika. \v 2 Moyize kaka nde asengeli kopusana pene ya Yawe ; kasi bato mosusu te. Lisanga mobimba ya Isalaele mpe ekomata te elongo na ye. \p \v 3 Tango Moyize akendeki koyebisa bato makambo mpe mibeko nyonso ya Yawe, bato bazongisaki elongo : \pi1 — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi. \p \v 4 Moyize akomaki maloba nyonso oyo Yawe ayebisaki ye. Mokolo oyo elandaki, alamukaki na tongo makasi mpe atongaki etumbelo na ebandeli ya ngomba. Bongo, atelemisaki mabanga zomi na mibale oyo ezali kotalisa mabota zomi na mibale ya Isalaele. \v 5 Atindaki bilenge mibali ya Isalaele ete babonzela Yawe mbeka ya kotumba ya bangombe ya mibali lokola mbeka ya boyokani. \v 6 Moyize azwaki ndambo ya makila, atiaki yango na sani ; bongo ndambo mosusu, abwakaki-bwakaki yango na likolo ya etumbelo. \v 7 Azwaki lisusu buku ya Boyokani mpe atangaki yango liboso ya bana ya Isalaele. Boye bango bazongisaki : \pi1 — Tokosala makambo nyonso oyo Yawe alobi mpe tokotosa yango. \p \v 8 Moyize azwaki makila, abwakelaki-bwakelaki yango bato mpe alobaki : \pi1 — Oyo ezali makila ya boyokani oyo Yawe asali elongo na bino kolanda maloba oyo nyonso. \p \v 9 Sima na yango, Moyize elongo na Aron, Nadabi, Abiyu mpe bakambi tuku sambo ya Isalaele, bamataki likolo ya ngomba \v 10 epai wapi bamonaki Nzambe ya Isalaele ; se ya matambe na Ye ezalaki lokola mabanga ya talo ya safiri mpe ezalaki na langi ya ble ya kitoko lokola ble ya likolo. \v 11 Kasi Nzambe asembolaki loboko na Ye te mpo na kobeta bakambi ya Isalaele ; bamonaki Nzambe, baliaki mpe bamelaki. \s1 Moyize akutani na Yawe \p \v 12 Yawe alobaki na Moyize : « Yaka pene na Ngai na likolo ya ngomba mpe telema wana. Ngai nakopesa yo bitando ya mabanga ya papala oyo na likolo na yango nakomi Mobeko mpe mitindo mpo na kopesa bana ya Isalaele malako. » \p \v 13 Boye Moyize atelemaki elongo na mosungi na ye Jozue mpe amataki na ngomba ya Nzambe. \v 14 Moyize alobaki na bakambi : « Bozela biso awa kino tokozonga. Aron mpe Wuri bazali elongo na bino. Tika ete soki moto azali na likambo, ayebisa bango yango. » \p \v 15 Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, mapata ezipaki ye \v 16 mpe nkembo ya Yawe ewumelaki na likolo ya ngomba Sinai. Mikolo motoba, mapata ezipaki ngomba. Bongo na mokolo ya sambo, Yawe abengaki Moyize kati na mapata. \v 17 Na miso ya bana ya Isalaele, Nkembo ya Yawe emonanaki na likolo ya ngomba lokola moto oyo etumbaka. \v 18 Tango Moyize amataki likolo ya ngomba, akotaki kati na mapata. Awumelaki kuna mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei. \c 25 \ms1 Etinda ya kotonga Mongombo \s1 Makabo mpo na kotonga Mongombo \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 \v 2 — Yebisa bana ya Isalaele ete bamemela Ngai makabo. Okozwa yango na maboko ya moto nyonso oyo akopesa na motema malamu. \b \li4 \v 3 Tala makabo oyo okozwa na maboko na bango : \b \li1 wolo, palata mpe bronze, \li1 \v 4 bilamba ya langi ya ble, ya motane, ya motane makasi, \li1 lino ya kitoko, bapwale ya ntaba, \li1 \v 5 baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, \li1 banzete ya akasia, \li1 \v 6 mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda, \li1 biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko ; \li1 \v 7 mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata. \b \p \v 8 Bakosalela Ngai Ndako ya bule, mpe nakovanda kati na bango. \v 9 Bokosala yango kolanda lolenge ya Mongombo mpe bisalelo oyo nakolakisa yo. \s1 Sanduku ya Boyokani mpe mofinuku \pi1 \v 10 Bokosala sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele tuku sambo na mitano mpe bosanda na yango, basantimetele tuku sambo na mitano. \v 11 Okobamba yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Okolatisa mpe songe na yango na wolo. \v 12 Okosalela yango bapete minei ya wolo mpe okotia yango na basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu. \v 13 Okosala mabaya mibale na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo. \v 14 Okokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya sanduku, mpo na komemela yango. \v 15 Mabaya yango ekotikala libela kati na bapete ya sanduku : bakolongola yango te. \v 16 Okotia kati na sanduku bitando ya mabanga ya mibeko, oyo nakopesa yo. \pi1 \v 17 Okosala mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. \v 18 Okosala bikeko mibale ya basheribe oyo okotia na suka mibale ya mofinuku ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. \v 19 Okotia ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe mosusu, na suka mosusu. Okokangisa bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale. \v 20 Mapapu ya basheribe ekozala ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku ; bakozala ngambo na ngambo, mpe miso na bango ekotala mofinuku. \v 21 Okotia kati na sanduku, bitando ya mabanga ya mibeko oyo nakopesa yo mpe okotia mofinuku na likolo ya sanduku. \v 22 Ezali wana, na likolo ya mofinuku nde Ngai nakomimonisa epai na yo, na kati-kati ya basheribe mibale oyo bakozala na likolo ya Sanduku ya Litatoli ; mpe nakopesa yo mitindo na Ngai nyonso mpo na bana ya Isalaele. \s1 Mesa ya mapa oyo babonzeli Nzambe \pi1 \v 23 Okosala mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ekozala na basantimetele pene nkama moko ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. \v 24 Okobamba yango wolo ya peto mpe okotia lisusu wolo na pembeni na yango. \v 25 Okozingela mesa yango na libaya oyo ekozala na basantimetele pene mwambe na monene, mpe okotia wolo na pembeni ya libaya yango. \v 26 Okosala bapete minei ya wolo mpe okotia yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezali. \v 27 Bapete ekozala pene ya libaya oyo ekozingela mesa, mpe bakokotisa kati na bapete yango mabaya ya komemela sanduku. \v 28 Okosala na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa mpe okobamba yango wolo. \v 29 Okosala na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga. \v 30 Okotia tango nyonso mapa na likolo ya mesa liboso na Ngai. \s1 Etelemiselo ya minda \pi1 \v 31 Okosala na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; okosala yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ekozala ekangana lokola eloko moko. \v 32 Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda esengeli kozala na bitape motoba : misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu. \v 33 Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, okotia bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo. \v 34 Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, esengeli kozala na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo. \v 35 Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ekozala na mbuma moko ; mpe ekozala bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda. \v 36 Bambuma mpe bitape ekozala ekangana na etelemiselo ya minda ; mpe nyonso ekosalema na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto. \v 37 Okosala minda sambo oyo okotia na likolo ya etelemiselo ya minda mpo ete epesa pole na etando oyo ezali na liboso ya etelemiselo. \v 38 Okosala na wolo ya peto bibende oyo bazwelaka makala ya moto mpe basani ya putulu. \v 39 Okosalela bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso. \v 40 Tala malamu mpe sala mosala nyonso kolanda ndakisa oyo natalisi yo na likolo ya ngomba. \c 26 \s1 Mongombo \pi1 \v 1 Okotonga Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. \v 2 Tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na minei na molayi ; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi. \v 3 Okokangisa batapi mitano, moko na mosusu, mpe okosala ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu. \v 4 Okotia basinga ya langi ya ble na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale. \v 5 Okotia basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale ; basinga yango ekotalana. \v 6 Okosala na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; mpe okokangisa na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Na boye, Mongombo ekobima eloko moko. \pi1 \v 7 Okosala batapi zomi na moko na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo. \v 8 Molayi ya tapi moko na moko ekozala na bametele pene zomi na mitano, mpe mokuse na yango ekozala na bametele pene mibale. Batapi nyonso zomi na moko ekozala ndenge moko na mokuse mpe na molayi. \v 9 Okokangisa batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu ; mpe okogumba tapi ya motoba na liboso ya Mongombo. \v 10 Okotia basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale. \v 11 Okosala na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; okokotisa yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko. \v 12 Batapi oyo ekozala na likolo ya Mongombo ekoleka molayi mpe ndambo na yango ekokita na sima ya Mongombo. \v 13 Mpe na molayi ya batapi oyo ezali na likolo ya Mongombo, basantimetele pene tuku mitano ekolekana na bangambo mibale ya Mongombo mpo na kozipa yango. \v 14 Okosalela baposo ya bameme oyo bapakola langi ya motane mpo na kozipa Mongombo, mpe okobakisa na likolo na yango baposo ya banyama ya ebale. \pi1 \v 15 Okosala bizingelo ya Mongombo na banzete ya akasia mpe okotelemisa yango. \v 16 Ezingelo moko na moko ekozala na bametele mitano na molayi, mpe basantimetele tuku sambo na mitano na mokuse. \v 17 Okobeta banzete mibale-mibale na ezingelo ; okosala bongo mpo na bizingelo nyonso ya Mongombo. \v 18 Okotia bizingelo tuku mibale na ngambo ya Negevi, na sude ; \v 19 mpe makolo tuku minei ya palata na se ya bizingelo tuku mibale : makolo mibale na se ya ezingelo moko na moko oyo babeta banzete mibale ; \v 20 bizingelo tuku mibale na ngambo mosusu ya Mongombo, na nor, \v 21 elongo na makolo na yango tuku minei ya palata : makolo mibale mpo na ezingelo moko na moko ; \v 22 bizingelo motoba na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste, \v 23 mpe bizingelo mibale na suka mpo na kolendisa Mongombo. \v 24 Bizingelo yango ekozala ya kofungwama na se, kasi ekosala songe na likolo mpe ekokota na lopete ya liboso : nyonso mibale ekozala ndenge moko mpe ekolendisa Mongombo. \v 25 Boye, bizingelo ekozala mwambe elongo na makolo na yango zomi na motoba ya palata : makolo mibale-mibale na se ya ezingelo moko na moko. \pi1 \v 26 Sima, okosala, na nzete ya akasia, mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo moko ya Mongombo, \v 27 mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo mosusu ya Mongombo, mabaya mitano mpo na bizingelo oyo ekozala na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste. \v 28 Libaya ya kati ekoleka na kati-kati ya bizingelo, ekoleka ngambo na ngambo. \v 29 Okobamba wolo na bizingelo, okosala bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya ; mpe okobamba mabaya wolo. \pi1 \v 30 Okotonga Mongombo ndenge kaka balakisaki yo yango na likolo ya ngomba. \pi1 \v 31 Okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na basheribe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. \v 32 Okotia yango na makonzi minei ya nzete ya akasia, oyo bapakola wolo ; okokangisa yango na bibende ya wolo oyo ezali lokola ndobo mpe okotelemisa yango na makolo minei ya palata. \v 33 Okokangisa rido na bibende oyo ezali lokola ndobo mpe okotia Sanduku ya Litatoli na sima ya rido yango. Rido nde ekokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule. \v 34 Kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, okotia mofinuku na likolo ya Sanduku ya Litatoli. \v 35 Okotia mesa na liboso ya rido, na ngambo ya nor ya Mongombo, mpe okotia etelemiselo ya minda na liboso ya mesa, na ngambo ya sude. \pi1 \v 36 Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, okosala rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango ; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. \v 37 Okosala na wolo, bibende mitano oyo ezali lokola ndobo mpo na kokangisela rido mpe banzete mitano ya akasia babamba wolo ; okosala makolo mitano ya bronze mpo na kotelemisela banzete yango. \c 27 \s1 Etumbelo ya bambeka \pi1 \v 1 Okosala na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo : ekozala ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; bongo bosanda na yango ekozala ya metele moko na basantimetele tuku mitano. \v 2 Okosala maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko ; mpe okobamba bronze na etumbelo. \pi1 \v 3 Okosala na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto. \v 4 Okosala motalaka ya bronze mpo na etumbelo ; okokangisa bapete minei ya bronze, na basonge nyonso minei ya motalaka. \v 5 Okotia motalaka na se ya etumbelo, na bandelo na yango, mpo ete ekoma na kati-kati ya etumbelo. \v 6 Okosala na nzete ya akasia, mabaya mpo na etumbelo mpe okobamba yango bronze. \v 7 Boye, mpo na komema etumbelo, bakokotisa mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo. \v 8 Okosala etumbelo na mabaya ; ekozala polele kati na yango. Okosala yango ndenge kaka balakisaki yo na ngomba. \s1 Lopango ya Mongombo \pi1 \v 9 Tala ndenge okotonga lopango ya Mongombo : ngambo ya sude oyo ekozala ya bametele pene tuku mitano na molayi, ekozipama na rido ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango. \v 10 Makonzi na yango tuku mibale elongo na makolo na yango tuku mibale ekosalema na bronze ; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ekozala ya palata. \v 11 Ngambo ya nor ekozala na bametele pene tuku mitano na molayi. Ekozala mpe na barido, na makonzi tuku mibale mpe na makolo tuku mibale, oyo esalema na bronze. Makonzi yango ekozala na bibende ya palata egumbama lokola ndobo elongo na biloko na yango ya kosimbela, oyo ekozala ya palata. \v 12 Ngambo ya weste ya lopango ya Mongombo ekozala na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse. Ekozala mpe na barido, makonzi zomi mpe makolo zomi. \v 13 Ngambo ya este ya lopango ya Mongombo, epai wapi moyi ebimelaka, ekozala na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse. \v 14 Ngambo moko ya ekuke ekozala na barido ya bametele sambo na basantimetele tuku mitano elongo na makonzi misato mpe makolo misato. \v 15 Ngambo mosusu ya ekuke ekozala mpe na barido ya bametele sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato. \v 16 Mpo na ekuke ya lopango ya Mongombo, bongisa rido ya bametele pene zomi na molayi, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi ; mpe ekosalema na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, elongo na makonzi minei mpe makolo minei ; ekozala mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. \v 17 Makonzi nyonso oyo ekozala zingazinga ya lopango esengeli kozala na biloko na yango ya kosimbela, bibende na yango egumbama lokola ndobo, ya palata ; mpe makolo na yango ya bronze. \v 18 Lopango ya Mongombo ekozala ya bametele tuku mitano na molayi, bametele tuku mibale na mitano na mokuse na ngambo moko na moko, bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. Barido na yango ekozala ya lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango, mpe makolo na yango ekozala ya bronze. \v 19 Biloko nyonso oyo bakosalela misala ya Mongombo, bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ekozala ya bronze. \s1 Mafuta mpo na etelemiselo ya minda \pi1 \v 20 Okopesa mitindo na bana ya Isalaele ete bamemela yo mafuta ya olive ya peto mpo na minda, mpo ete minda ekoka kopela tango nyonso. \v 21 Ezali kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, libanda ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, nde Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kopelisa minda tango nyonso liboso ya Yawe, kobanda na pokwa kino na tongo. Ezali mobeko ya libela mpo na milongo nyonso ya bana ya Isalaele. \c 28 \s1 Bilamba ya Banganga-Nzambe \pi1 \v 1 Kamata kati na bana ya Isalaele Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali : Nadabi mpe Abiyu, Eleazari mpe Itamari ; mpo ete basala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai. \v 2 Okotonga mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, bilamba ya bule lokola elembo ya nkembo mpe ya lokumu. \v 3 Bongo yo, okoloba na bato nyonso ya mayele oyo, kati na bango, natondisi molimo ya bwanya mpo ete batonga bilamba ya Aron mpo na kobulisa ye na mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai. \v 4 Tala bilamba oyo bakotonga : elamba ya tolo, efode\f + \fr 28.4 \fr*\ft Efode ezali eteni ya elamba oyo ezali lokola esharpe oyo Banganga-Nzambe batiaka likolo ya nzambala.\ft*\f*, kazaka mpe nzambala oyo batia bililingi likolo na yango, kitendi ya kokanga na moto mpe mokaba. Bakotonga bilamba ya bule mpo na Aron, ndeko na yo ya mobali, mpe mpo na bana na ye ya mibali oyo bakosala mosala ya bonganga-Nzambe liboso na Ngai. \v 5 Bakosalela wolo, langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko. \s1 Efode \pi1 \v 6 Bakotonga na wolo efode ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. \v 7 Ekozala na bankamba mibale na basuka na yango mibale mpo na kolata efode yango ; bankamba ekoleka likolo ya mapeka. \v 8 Mokaba ya efode ekosalema ndenge moko na efode : ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango. \pi1 \v 9 Okozwa mabanga mibale ya onikisi mpe okokoma na likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele \v 10 kolanda ndenge babotama : bakombo motoba na libanga ya liboso mpe bakombo motoba oyo etikali, na libanga ya mibale. \v 11 Okokoma bakombo ya bana mibali ya Isalaele na mabanga nyonso mibale ndenge bato basalaka bililingi na kashe na libanga ; mpe okozingela yango na wolo. \v 12 Okotia mabanga yango na bankamba ya efode lokola mabanga ya ekaniseli mpo na bana mibali ya Isalaele. Aron akomema likolo ya mapeka na ye lokola ekaniseli liboso ya Yawe bakombo na bango. \v 13 Okotia bikangelo ya wolo \v 14 mpe okosala basheneti mibale ya wolo basangisa na eloko mosusu te ; okosala yango lokola suki ya maboko mpe okokangisa basheneti yango pembeni-pembeni ya mabanga. \s1 Elamba ya tolo \pi1 \v 15 Okosala elamba ya tolo mpo na koyeba mokano ya Nzambe ; ekozala mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. Okotonga yango lokola efode : ekozala ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo bakotonga bililingi na likolo na yango. \v 16 Soki bagumbi yango na biteni mibale, molayi mpe mokuse esengeli kozala ndenge moko : basantimetele pene tuku mibale na mitano. \v 17 Okotia na likolo na yango milongo minei ya mabanga ya talo. Na molongo ya liboso, okotia libanga ya saridwane, ya topaze mpe ya emerode ; \v 18 na molongo ya mibale, okotia libanga ya ribisi, ya safiri mpe ya diama ; \v 19 na molongo ya misato, okotia libanga ya opale, ya agate mpe ya ametisite ; \v 20 mpe na molongo ya minei, okotia libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Okokanga mabanga yango na bikangelo ya wolo. \v 21 Mabanga yango ekozala zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakokoma kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale ; bakokoma yango ndenge basalaka bililingi na kashe. \pi1 \v 22 Okosala basheneti ya wolo ya peto mpo na elamba ya tolo ; okosala yango ndenge bakangaka suki ya maboko. \v 23 Okosala bapete mibale ya wolo mpo na elamba ya tolo mpe okokangisa yango na basonge mibale ya elamba yango. \v 24 Okolekisa basheneti mibale ya wolo kati na bapete mibale oyo ezali na basonge ya elamba ya tolo, \v 25 mpe okokangisa basonge mibale mosusu ya basheneti yango, na bikangelo nyonso mibale ; mpe okokangisa yango na bankamba ya efode ; bankamba yango ekoleka na liboso. \v 26 Okosala bapete mibale ya wolo oyo okotia na basonge mibale ya se ya elamba ya tolo, na ngambo ya kati oyo etala efode. \v 27 Okosala bapete mosusu mibale ya wolo oyo okotia na bankamba mibale ya efode, na se, na liboso mpe na pembeni ya mokaba ya efode. \v 28 Okokangisa na singa ya langi ya ble bapete ya wolo ya elamba ya tolo mpe bapete ya wolo ya efode, mpo ete elamba ya tolo ezala likolo ya efode mpe elongwa te na likolo na yango. \pi1 \v 29 Boye tango Aron akokota na Esika-Oyo-Eleki-Bule, akomema na motema na ye, na elamba ya tolo ya kokata makambo, bakombo ya bana mibali ya Isalaele lokola ekaniseli liboso ya Yawe mpo na libela. \v 30 Okotia lisusu Urimi mpe Tumimi kati na elamba ya tolo ya kokata makambo mpe yango ekozala likolo ya motema ya Aron tango akotelema liboso ya Yawe. Boye Aron akomema makambo ya bana ya Isalaele liboso ya Yawe mpo na libela. \s1 Bilamba mosusu ya Banganga-Nzambe \pi1 \v 31 Okosala mobimba ya nzambala oyo ekozala na se ya efode na langi ya ble. \v 32 Nzambala esengeli kozala na lidusu na kati-kati mpo na kokotisa moto ; bakotonga pembeni-pembeni ya lidusu yango poso ya makasi mpo ete epasuka te. \v 33 Na se mpe zingazinga ya nzambala, okotia bambuma ya grenade bakangisa na singa ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi ; mpe okotia bangonga ya mike-mike kati na bambuma ya grenade. \v 34 Ekolandana boye : ngonga moko ya moke ya wolo, mbuma moko ya grenade, mpe bongo na bongo, zingazinga ya basonge nyonso ya nzambala. \v 35 Aron asengeli kolata yango tango azali kosala mosala. Makelele ya bangonga ya mike-mike ekoyokana tango akotelema liboso ya Yawe na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe tango akobima ; wana ekolakisa ete akufi te. \pi1 \v 36 Okosala na wolo ya peto medaye mpe okokoma na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe : \pc abulisama mpo na Yawe. \pi1 \v 37 Okokangisa yango na singa ya ble, mpe ekozala na likolo ya kitendi ya kokanga na moto, na mbunzu. \v 38 Linzanza yango ekozala na mbunzu ya Aron mpo ete akoka komema bambeba oyo bana ya Isalaele bakosala na tina na biloko ya bule oyo bakobonza mpe bakobulisa. Linzanza yango ekozala tango nyonso na mbunzu ya Aron mpo ete Ngai Yawe, nandima makabo yango. \pi1 \v 39 Okotongela Aron nzambala ya lino mpe kitendi ya lino mpo na moto ; okosalela ye mpe mokaba oyo bato oyo batongaka bililingi na bilamba bakoyeba kotia bililingi. \v 40 Okosala lisusu mpo na bana ya Aron banzambala, mikaba mpe bikoti, lokola elembo ya lokumu mpe ya nkembo. \pi1 \v 41 Sima na kolatisa Aron, ndeko na yo ya mobali, elongo na bana na ye ya mibali, okopakola bango mafuta mpe okobulisa bango. Okokomisa bango Banganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai. \v 42 Okosalela bango bakaputula ya lino mpo na kozipa bolumbu na bango : bakaputula yango ekobanda na loketo kino na mipende. \v 43 Aron mpe bana na ye ya mibali bakolata yango tango nyonso bakobanda kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo mpo na kosala mosala kati na Esika ya bule, mpo ete bazala na ngambo te mpe bakufa te. \pi1 Ezali mobeko ya libela mpo na Aron mpe bakitani na ye. \c 29 \s1 Libulisi ya Banganga-Nzambe \pi1 \v 1 Tala ndenge okosala mpo na kobulisa Aron elongo na bana na ye ya mibali, na mosala ya bonganga-Nzambe mpo ete basalela Ngai. Okozwa mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali, ezanga mbeba ; \v 2 okosala mapa mpe bagato ezanga levire, oyo farine na yango basangisa na mafuta ; okosala mpe mikate ezanga levire, kasi bapakola yango mafuta ; okosala yango na farine oyo batuta mpe bayungola malamu. \v 3 Okotia yango nyonso na kitunga moko mpe okomema yango na ekuke ya Mongombo, elongo na mwana ngombe ya mobali mpe bameme mibale ya mibali. \pi1 \v 4 Okomema Aron mpe bana na ye ya mibali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe okosukola bango na mayi. \v 5 Okozwa bilamba ya bule mpe okolatisa Aron nzambala, kazaka, efode mpe elamba ya tolo ; mpe okokanga ye mokaba ya efode. \v 6 Okokanga ye kitendi na moto mpe okobakisa na likolo ya kitendi yango elembo ya libulisi. \v 7 Okozwa mafuta ya epakolami, okosopa yango na moto na ye mpe okopakola ye yango. \v 8 Okomema bana na ye ya mibali mpe okolatisa bango banzambala. \v 9 Okolatisa Aron mpe bana na ye ya mibali mikaba na loketo na bango mpe okolatisa bango bikoti. Na bongo, okobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe oyo ekozala ya bango kolanda mobeko ya libela na libela. \pi1 \v 10 Okomema ngombe ya mobali liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani ; Aron mpe bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango. \v 11 Okokata ngombe yango kingo liboso na Ngai Yawe, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 12 Okozwa ndambo ya makila ya ngombe yango, mpe okosalela mosapi na yo mpo na kotia makila yango na maseke ya etumbelo ; okosopa na makolo ya etumbelo makila oyo ekotikala. \v 13 Okozwa mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipaka bafwa mpe bambuma nyonso mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango ; mpe okotumba yango na etumbelo. \v 14 Kasi okotumba na libanda ya molako misuni ya ngombe yango, poso na yango mpe nyei na yango. Ezali mbeka mpo na masumu. \pi1 \v 15 Okozwa lisusu meme moko ya mobali ; Aron mpe bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango. \v 16 Okokata meme yango kingo, okozwa makila na yango mpe okosopa yango na bapembeni nyonso ya etumbelo. \v 17 Okokata-kata meme yango na biteni, okosukola biloko na yango ya kati elongo na makolo na yango mpe okotia yango likolo ya biteni mosusu mpe likolo ya moto. \v 18 Okotumba meme mobimba ya mobali na etumbelo ; ezali mbeka ya kotumba mpo na Yawe, likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. \pi1 \v 19 Okozwa meme mosusu ya mobali ; Aron elongo na bana na ye ya mibali bakotia maboko na bango na moto na yango. \v 20 Okokata meme yango kingo, okozwa ndambo ya makila na yango mpe okotia yango na songe ya litoyi ya ngambo ya loboko ya mobali ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali. Okotia yango lisusu na mosapi ya monene ya loboko na bango ya ngambo ya mobali mpe na mosapi ya monene ya lokolo na bango ya ngambo ya loboko ya mobali. \v 21 Okozwa makila oyo ekozala na etumbelo mpe mafuta ya epakolami, okosopela yango Aron mpe bilamba na ye, bana na ye mpe bilamba na bango. Na bongo, ye mpe bana na ye elongo na bilamba na bango bakobulisama. \pi1 \v 22 Tala biteni ya mafuta ya meme ya mobali oyo okozwa : mokila, mafuta nyonso oyo ezalaka pembeni-pembeni ya biloko ya kati, mafuta oyo ezipi bafwa, bambuma mibale oyo ezalaka kati na loketo elongo na mafuta na yango mpe mopende ya ngambo ya mobali, pamba te meme yango ya mobali ezali ya libulisi. \v 23 Tala biloko oyo okozwa kati na kitunga ya mapa ezanga levire, oyo ezali liboso ya Yawe : lipa moko, gato moko balamba na mafuta mpe galeti moko. \v 24 Okotia biloko oyo nyonso na maboko ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali ; okoyebisa bango ete batombola yango liboso ya Yawe lokola likabo ya kotombola. \v 25 Okozwa yango lisusu na maboko na bango mpe okotumba yango na etumbelo, na likolo ya mbeka ya kotumba ; ezali likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, likabo oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. \v 26 Okozwa tolo ya meme ya mobali mpo na kobulisa Aron, okotombola yango liboso ya Yawe lokola mbeka ya kotombola ; ekozala eteni na yo. \pi1 \v 27 Okobulisa biteni ya libulisi mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali : tolo mpe mopende ya meme oyo batombolaki mpo na kobonzela Yawe. \v 28 Biteni yango ekozala ya Aron mpe ya bana na ye ya mibali lokola mobeko ya libela na libela. Pamba te ezali makabo ya bana ya Isalaele mpo na Yawe, makabo oyo ekowuta na mbeka na bango ya boyokani. \pi1 \v 29 Bilamba ya bule ya Aron ekotikala sima na ye epai ya bana na ye. Bakolata yango tango bakopakola bango mafuta mpe bakobulisa bango. \v 30 Mikolo sambo, moko kati na bana na ye ya mibali oyo akokitana na ye lokola Nganga-Nzambe, akolata yango mpe akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe kati na Esika ya bule. \pi1 \v 31 Okokamata meme ya mobali ya libulisi mpe okolamba mosuni na yango na esika moko ya bule. \v 32 Aron mpe bana na ye ya mibali bakolia mosuni ya meme mpe lipa oyo ezali kati na kitunga, na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 33 Kaka bango nde bakolia makabo oyo na nzela na yango mosala ya bolimbisi masumu esalemaki tango babulisaki bango mpo na mosala ya bonganga-Nzambe ; kasi moto oyo abulisama te akoki kolia yango te, pamba te ezali bule. \v 34 Soki mosuni ya mbeka ya libulisi mpe lipa ekomi kino na tongo, okotumba yango na moto. Bakoki kolia yango lisusu te, pamba te ezali bule. \pi1 \v 35 Sala mpo na Aron mpe mpo na bana na ye ya mibali makambo nyonso oyo natindi yo. Okosala mikolo sambo mpo na kobulisa bango na mosala ya bonganga-Nzambe. \v 36 Mokolo na mokolo, okobonza mbeka ya ngombe ya mobali lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu. Okopetola etumbelo na nzela ya mosala ya bolimbisi masumu, oyo okosala mpo na etumbelo yango mpe okosopela yango mafuta ya epakolami mpo na kobulisa yango. \v 37 Mikolo sambo, okosala mosala ya bolimbisi masumu na etumbelo mpo na kobulisa yango. Boye etumbelo ekokoma bule koleka mpe nyonso oyo ekotutana na yango ekokoma bule. \s1 Mbeka ya kotumba ya mokolo na mokolo \pi1 \v 38 Tala mbeka oyo okopesela mitindo ete batumbaka mokolo na mokolo na etumbelo mpo na libela : bana meme mibale ya mobu moko. \v 39 Okotumba mwana meme moko na tongo, mpe mosusu, na pokwa. \v 40 Mpo na mwana meme ya liboso, okopesa bakilo misato ya farine basangisa na litele moko na kati-kati ya litele ya mafuta, mpe okosopa litele moko na kati-kati ya litele ya vino lokola mbeka ya masanga. \v 41 Mpo na mwana meme ya mibale, okobonza yango na pokwa elongo na lolenge moko ya makabo oyo obonzaki na tongo : farine, mafuta mpe mbeka ya masanga ya vino ; okobonza yango lokola likabo bazikisa na moto mpo na Yawe, oyo solo kitoko na yango esepelisaka Yawe. \pi1 \v 42 Ezali mbeka ya kotumba ya tango nyonso, kati na bikeke nyonso : bokobanda kotumba yango na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya Yawe ; ezali na esika wana nde nakobanda kokutana mpe kolobana na bino. \v 43 Ezali na esika yango nde nakobanda kokutana na bana ya Isalaele ; bongo nkembo na Ngai ekobulisa esika yango. \pi1 \v 44 Nakobulisa Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo ; nakobulisa lisusu Aron mpe bana na ye ya mibali mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe. \v 45 Boye nakovanda kati na bana ya Isalaele mpe nakozala Nzambe na bango. \v 46 Bakoyeba solo ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bango, Nzambe oyo abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na kovanda kati na bango. Nazali Yawe, Nzambe na bango. \c 30 \s1 Etumbelo ya malasi \pi1 \v 1 Okosala lisusu etumbelo ya malasi na nzete ya akasia. \v 2 Molayi mpe mokuse na yango ekozala ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango ekozala na metele moko. Maseke na yango ekokangana na etumbelo. \v 3 Okobamba wolo ya peto na likolo ya etumbelo, na mipanzi na yango mpe na maseke ; mpe okozingela pembeni na yango na libende ya wolo. \v 4 Okosala mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu ; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo. \v 5 Okosala mabaya yango na nzete ya akasia mpe okobamba yango wolo. \v 6 Okotia etumbelo liboso ya rido oyo ezali liboso ya Sanduku ya Litatoli, liboso ya esika ya bolimbisi masumu oyo ezali na likolo ya Sanduku ya Litatoli. Ezali na esika yango nde nakobanda kokutana na yo. \pi1 \v 7 Tongo nyonso, Aron akotumba ansa na etumbelo yango tango akobongisa minda ; mpe pokwa nyonso, tango akopelisa yango. \v 8 Aron asengeli kotumba lisusu ansa tango akopelisa minda na pokwa mpo ete ansa epelaka tango nyonso liboso ya Yawe mpo na libela. \v 9 Kobonza te na etumbelo : ansa oyo elongobani te, mbeka ya kotumba to makabo ya bambuma. Mpe kosopa te likolo na yango makabo ya masanga ya vino. \v 10 Mbala moko na mobu, Aron asengeli kosala mosala ya bolimbisi masumu, na maseke ya etumbelo ; akosala yango na makila ya mbeka ya masumu mpo na milongo oyo ekoya. Etumbelo ekozala bule koleka mpo na Yawe. \s1 Mpako mpo na kosikola bomoi \p \v 11 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 \v 12 — Tango okotanga bana ya Isalaele, moko na moko kati na bango akofuta mpo na Yawe, mpako mpo na kosikola bomoi na ye tango bakotanga ye. Boye etumbu moko te ekokweyela bango tango bakotangama. \v 13 Moto nyonso oyo batangi asengeli kofuta motuya oyo mpo na Yawe lokola mpako, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo : bagrame motoba ya palata. \v 14 Moto nyonso oyo batangi, kobanda mibu tuku mibale to koleka, akofuta mpako mpo na Yawe. \v 15 Na tango ya kofuta mpako mpo na Yawe, mpo na kosikola bomoi na bino, mozwi akofuta te motuya koleka bagrame motoba ya palata, mpe mobola akofuta te motuya oyo ezali na se ya bagrame motoba. \v 16 Okozwa epai ya bana ya Isalaele mpako mpo na kosikola bomoi na bango mpe okosalela yango mpo na mosala ya kobongisa Ndako ya kapo ya Bokutani. Ekozala mpo na bana ya Isalaele ekaniseli liboso ya Yawe mpo na lisiko ya bomoi na bango. \s1 Sani ya komipetola \p \v 17 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 \v 18 — Okosala na bronze sani moko monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango ; okotia yango na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo, mpe okotia mayi kati na yango. \v 19 Aron mpe bana na ye ya mibali bakobanda kosukola maboko mpe makolo na bango na mayi ya sani yango. \v 20 Basengeli kosukola na mayi yango mpo ete bakufa te tango bakokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to tango bakopusana pembeni ya etumbelo mpo na kotumba makabo bazikisa na moto mpo na Yawe. \v 21 Basengeli kosukola makolo mpe maboko na bango mpo ete bakufa te. Oyo ezali mobeko oyo ekobongwana te mpo na Aron mpe bakitani na ye mpo na libela. \s1 Mafuta ya epakolami \p \v 22 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 \v 23 — Zwa mafuta ya solo kitoko : bakilo motoba ya mire, kati-kati na yango to bakilo misato ya sinamoni, bakilo misato ya kaneli, \v 24 bakilo misato ya kasia, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Esika ya bule, mpe balitele motoba ya mafuta ya olive. \v 25 Na biloko oyo nyonso, okosala mafuta ya epakolami ya bule, ya solo kitoko, oyo esalemi na mosali malasi ; ekozala mafuta ya bule mpo na epakolami. \v 26 Okosalela mafuta yango mpo na kopakola Ndako ya kapo ya Bokutani, Sanduku ya Litatoli, \v 27 mesa mpe bisalelo na yango nyonso, etelemiselo ya minda mpe biloko na yango nyonso, etumbelo ya malasi, \v 28 etumbelo ya bambeka ya kotumba mpe bisalelo na yango nyonso elongo na sani mpo na komipetola mpe evandelo na yango. \v 29 Okobulisa yango mpo ete ezala bule koleka. Nyonso oyo ekotutana na yango ekozala bule. \v 30 Okopakola Aron mpe bana na ye ya mibali mafuta mpe okobulisa bango mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe. \v 31 Sima, okoloba na bana ya Isalaele : « Mafuta oyo ya epakolami ebulisami libela na libela mpo na Yawe. \v 32 Bokopakola yango te na banzoto ya bato mpe bomekola te ndenge basalela yango, pamba te ezali bule mpe bosengeli komona yango bule. \v 33 Moto nyonso oyo akomekola mafuta yango mpe akosopa yango na nzoto ya moto oyo abulisami te, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. » \s1 Malasi ya ansa \p \v 34 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Zwa biloko ya mike-mike ya solo kitoko : sitakite, onikisi, galibanumi mpe ansa oyo basangisa na eloko mosusu te ; biloko nyonso ezala kilo moko. \v 35 Okosala na yango ansa ya solo kitoko oyo esalemi na moto oyo asalaka malasi. Ekozala malasi oyo ezali na mungwa, ya peto mpe ya bule. \v 36 Okosala na ndambo na yango mosusu putulu oyo okotia liboso ya Sanduku ya Litatoli kati na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakokutana na yo. Ekozala bule koleka mpo na bino. \v 37 Bokomisalela te ansa mosusu ya lolenge wana. Okomona yango bule mpe ekozala kaka mpo na Yawe. \v 38 Moto nyonso oyo akomekola yango mpo na kosepela na solo na yango ya kitoko, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. \c 31 \s1 Basali ya Esika ya bule \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 \v 2 — Yoka, naponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ; \v 3 natondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso ; \v 4 mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze ; \v 5 mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso. \v 6 Tala, napesi ye lokola mosungi Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani. \b \li4 Mpe napesi bwanya epai ya bato nyonso ya misala ya maboko mpo ete basala misala nyonso oyo natindi yo : \b \li1 \v 7 Ndako ya kapo ya Bokutani, \li1 Sanduku ya Litatoli, esika ya bolimbisi masumu oyo ezali likolo ya Sanduku, \li1 mpe bisalelo nyonso ya Ndako ya kapo ; \li2 \v 8 mesa elongo na biloko na yango ; \li2 etelemiselo ya minda, basala na wolo oyo basangisa na eloko mosusu te, elongo na biloko na yango nyonso ; \li2 etumbelo ya malasi, \li2 \v 9 etumbelo ya bambeka ya kotumba elongo na bisalelo na yango nyonso ; \li2 sani mpo na komipetola elongo na evandelo na yango ; \li1 \v 10 bilamba ya mosala, \li2 bilamba nyonso ya bule ya Nganga-Nzambe Aron, \li2 bilamba oyo bana na ye ya mibali bakolata tango bakosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe, \li1 \v 11 mafuta ya epakolami mpe ansa ya solo kitoko mpo na Esika ya bule. \b \li4 Basengeli kosala yango ndenge kaka natindaki yo. \s1 Mokolo ya Saba \p \v 12 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 \v 13 — Loba na bana ya Isalaele : « Bosengeli kobatela mikolo na Ngai ya Saba ; ekozala elembo ya libela na libela kati na Ngai mpe bino, mpo ete boyeba ete ezali Ngai Yawe nde nabulisi bino. \v 14 Lisusu, bokobatela mokolo ya Saba, pamba te ekozala mpo na bino mokolo ya bule. Moto nyonso oyo akobuka mobeko yango, basengeli koboma ye ; mpe moto nyonso oyo akosala mosala ata ya lolenge nini na mokolo yango, basengeli kolongola ye kati na bato na ye. \v 15 Bokosala mosala mikolo motoba, mpe mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba, mokolo ya kopema, mokolo oyo ebulisami mpo na Yawe. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo ya Saba, basengeli koboma ye. \v 16 Bana ya Isalaele bakobatela mokolo ya Saba ; bango mpe bakitani na bango bakotosa yango lokola boyokani ya libela na libela. \v 17 Ekozala elembo kati na Ngai mpe bana ya Isalaele mpo na libela na libela, pamba te na mikolo motoba, Yawe asalaki likolo mpe mokili ; bongo na mokolo ya sambo, akataki mosala mpe apemaki. » \p \v 18 Tango Yawe asilisaki kosolola na Moyize, na ngomba Sinai, Yawe apesaki ye bitando mibale ya mabanga ya litatoli oyo Nzambe akomaki na mosapi na Ye. \c 32 \ms1 Isalaele abuki boyokani elongo na Nzambe \s1 Bana ya Isalaele basali nzambe \p \v 1 Tango bato bamonaki ete Moyize azali kowumela mpo na kokita na ngomba, basanganaki zingazinga ya Aron mpe balobaki : \pi1 — Yaka mpe salela biso nzambe oyo akotambola liboso na biso. Pamba te Moyize, moto oyo abimisaki biso na Ejipito, toyebi te makambo nini ekomeli ye. \p \v 2 Aron azongiselaki bango : \pi1 — Bolongola biloko ya matoyi oyo ezali na matoyi ya basi na bino, ya bana na bino ya basi mpe ya mibali, mpe bomemela ngai yango. \p \v 3 Bato nyonso balongolaki biloko ya matoyi mpe bamemaki yango epai ya Aron. \v 4 Aron azwaki biloko oyo bapesaki ye, anyangwisaki yango na moto, mpe sima, asalaki ekeko ya mwana ngombe. Bongo balobaki : \pi1 — Tala nzambe na yo, oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito. \p \v 5 Tango Aron amonaki yango, atongaki etumbelo liboso ya mwana ngombe mpe alobaki : \pi1 — Feti ekozala lobi mpo na Yawe. \p \v 6 Mokolo oyo elandaki, bato balamukaki na tongo makasi, babonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Sima na yango, bavandaki mpo na kolia mpe mpo na komela ; mpe batelemaki mpo na kosakana. \s1 Moyize alembisi kanda ya Yawe \p \v 7 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Kita, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito babungi nzela, \v 8 bapesi mokongo noki na makambo oyo natindaki bango mpe bamisaleli ekeko ya mwana ngombe. Bagumbameli yango, babonzeli yango makabo mpe balobi : « Tala nzambe na yo, Oh Isalaele, oyo abimisaki yo na Ejipito. » \p \v 9 Yawe alobaki lisusu na Moyize : \pi1 — Namoni ete bato oyo bazali batomboki. \v 10 Sik’oyo, tika Ngai moko nasala mpo ete kanda na Ngai ekweyela bango mpe naboma bango. Kasi nakokomisa yo libota monene. \p \v 11 Moyize abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe alobaki : \pi1 — Eh Yawe ! Mpo na nini kanda na Yo ekweyela bato na Yo, oyo obimisaki na Ejipito, na nguya monene mpe na loboko ya makasi ? \v 12 Mpo na nini bato ya Ejipito baloba : « Nzambe na bango azalaki na makanisi mabe tango abimisaki bango na Ejipito. Ezali nde mpo na koboma bango na mokili ya bangomba mpe kosilisa bango na mokili. » Lembisa kanda na Yo ya makasi mpe kosala lisusu mabe te na bato na Yo. \v 13 Kanisa Abrayami, Izaki mpe Isalaele, basali na Yo, oyo Yo moko olapelaki ndayi mpe olobaki : « Nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto na likolo, nakopesa bango mokili oyo nyonso ndenge kaka nalobaki na bango ; mpe yango ekozala libula na bango mpo na libela. » \p \v 14 Mpe Yawe asalaki lisusu te mabe oyo akanaki kosala bato na Ye. \s1 Moyize asilikeli bana ya Isalaele \p \v 15 Moyize abalukaki mpe akitaki wuta na ngomba, elongo na bitando mibale ya mabanga ya boyokani na maboko na ye ; mabanga yango ekomama na bangambo mibale, na liboso mpe na sima. \v 16 Bitando yango ya mabanga ezalaki mosala ya Nzambe, mpe makomi oyo ezalaki ya kokomama na bitando yango ya mabanga ezalaki ya Nzambe. \p \v 17 Tango Jozue ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki koganga, alobaki na Moyize : \pi1 — Ezali na makelele ya bitumba kati na molako ! \p \v 18 Moyize azongisaki : \pi1 — Te, ezali makelele ya elonga te, makelele ya kokweyisama mpe te ! Oyo ngai nazali koyoka, ezali nde makelele ya banzembo. \p \v 19 Tango Moyize apusanaki pembeni ya molako, amonaki ekeko ya mwana ngombe mpe bato bazali kobina ; asilikaki makasi, abwakaki bitando ya mabanga wuta na maboko na ye mpe apanzaki yango na biteni, na ebandeli ya ngomba. \v 20 Moyize azwaki ekeko ya mwana ngombe oyo basalaki, atumbaki yango na moto mpe anikaki yango malamu kino ekomaki putulu. Bongo apanzaki yango likolo ya mayi mpe amelisaki bana ya Isalaele mayi yango. \p \v 21 Moyize atunaki Aron : \pi1 — Likambo nini bato oyo basali yo mpo ete okamba bango kino kosala lisumu ya monene boye ? \p \v 22 Aron azongisaki : \pi1 — Tika ete nkolo na ngai asilika te ! Oyebi bato, balingaka kaka kosala mabe. \v 23 Balobaki na ngai : « Salela biso Nzambe oyo akotambola liboso na biso, pamba te toyebi te likambo nini ekweyeli Moyize oyo abimisaki biso na Ejipito. » \v 24 Bongo nayebisaki bango : « Tika ete moto nyonso oyo azali na biloko ya matoyi ya wolo alongola yango. » Bapesaki ngai wolo, nanyangwisaki yango na moto mpe nasalaki na yango ekeko ya mwana ngombe oyo. \p \v 25 Moyize amonaki ete bato bazalaki kati na mobulu, pamba te Aron akambaki bango mabe ; yango wana bakomaki eloko ya kotiola na miso ya banguna na bango. \v 26 Moyize atelemaki na ekotelo ya molako mpe alobaki : \pi1 — Tika ete moto nyonso oyo azali mpo na Yawe aya epai na ngai. \p Mpe Balevi nyonso basanganaki pene na ye. \v 27 Alobaki na bango : \pi1 — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Tika ete moto nyonso atia mopanga na mopende na ye. Botambola kati na molako wuta na ndako ya kapo moko kino na ndako ya kapo mosusu ; mpe moko na moko na bino aboma ndeko na ye ya mobali, moninga na ye mpe mozalani na ye. » \p \v 28 Balevi basalaki ndenge Moyize atindaki ; mpe na mokolo wana, bato pene nkoto misato bakufaki. \v 29 Moyize alobaki : \pi1 — Na mokolo ya lelo, Yawe atie bino pembeni mpo ete bobomi bana na bino moko ya mibali mpe bandeko na bino ya mibali. Bongo mpo na yango, apamboli bino. \s1 Moyize abondeli Yawe \p \v 30 Mokolo elandaki, Moyize alobaki na bato : \pi1 — Bosalaki lisumu monene. Kasi sik’oyo, nakomata epai na Yawe ; tango mosusu, nakozwa bolimbisi mpo na lisumu na bino. \p \v 31 Moyize azongaki epai na Yawe mpe alobaki : \pi1 — Ah ! Tala lisumu monene bato oyo basali. Bamisalelaki nzambe ya wolo. \v 32 Kasi sik’oyo, nabondeli Yo, limbisa lisumu na bango, soki te longola kombo na ngai na buku ya bomoi oyo okomaki. \p \v 33 Yawe azongiselaki Moyize : \pi1 — Moto nyonso oyo asalaki lisumu liboso na Ngai, ye nde nakolongola na buku na Ngai. \v 34 Sik’oyo, kende ! Kamba bato na esika oyo nalobaki na yo. Tala, anjelu na Ngai akozala liboso na yo. Atako bongo, tango mokolo ekokoka mpo ete napesa etumbu, nakopesa bango etumbu mpo na lisumu na bango. \p \v 35 Yawe apesaki bato etumbu likolo ya ekeko ya mwana ngombe oyo balobaki na Aron ete asala. \c 33 \s1 Yawe atindi Moyize \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Kende, longwa na esika oyo elongo na bato oyo obimisaki na Ejipito ; kende na mokili oyo nalakaki na ndayi epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi ete nakopesa yango epai na bana na yo. \v 2 Nakotinda anjelu liboso na yo, nakobengana bato ya Kanana ya Amori, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. \v 3 Bokende na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. Mpo na Ngai, nakotambola elongo na bino te, pamba te bozali batomboki, noki te nakosilisa koboma bino na nzela. \p \v 4 Tango bato bayokaki maloba oyo ya somo, balataki pili, mpe ata moto moko te alataki lisusu biloko ya monzele. \v 5 Bongo Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Loba na bana ya Isalaele : « Bozali batomboki ; soki natamboli elongo na bino ata mpo na tango moke, nakosilisa koboma bino. Bolongola biloko na bino ya monzele, mpe nakoyebisa bino makambo oyo nakosala bino. » \p \v 6 Bana ya Isalaele balongolaki biloko na bango ya monzele na ngomba Orebi. \s1 Ndako ya kapo ya Bokutani \p \v 7 Moyize azwaki ndako ya kapo mpe atelemisaki yango mwa mosika, na libanda ya molako, mpo na bolamu na bango ; mpe abengaki yango Ndako ya kapo ya Bokutani. Moto nyonso oyo alingaki kokutana na Yawe, asengelaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, na libanda ya molako. \v 8 Mbala nyonso oyo Moyize azalaki kokende na Ndako ya kapo ya Bokutani, bato nyonso bazalaki kotelema : moko na moko azalaki kotelema na ekuke ya ndako na ye ya kapo mpo na kotala Moyize kino akokota na Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 9 Soki Moyize akoti na kati, likonzi ya lipata ezalaki kokita mpe kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani ; bongo Yawe azalaki kosolola na Moyize. \v 10 Bato nyonso bazalaki komona likonzi ya lipata kotelema na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. Boye bazalaki kotelema mpe kofukamela Yawe, moko na moko na ekuke ya ndako na ye ya kapo. \v 11 Yawe azalaki kosolola na Moyize ndenge moto asololaka na moninga na ye. Wana Moyize azalaki kozonga na molako ; Jozue, mwana mobali ya Nuni, elenge oyo azalaki kosunga ye, azalaki kotikala kati na ndako ya kapo. \s1 Moyize mpe nkembo ya Yawe \p \v 12 Moyize alobaki na Yawe : \pi1 — Tala, ozali koloba na ngai ete nakamba bato oyo, kasi ozali koyebisa ngai te nani okotinda elongo na ngai. Nzokande Yo nde olobaki na ngai : « Nayebi yo na kombo na yo, » mpe lisusu : « Ozwi ngolu na miso na Ngai. » \v 13 Sik’oyo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, teya ngai banzela na Yo mpo ete nayeba Yo mpe nazwa ngolu na miso na Yo. Mpe kanisa lisusu ete libota wana bazali bato na Yo. \p \v 14 Yawe azongisaki : \pi1 — Ngai moko nakotambola elongo na yo mpe nakopesa yo bopemi. \p \v 15 Moyize azongisaki : \pi1 — Soki Yo moko okotambola elongo na biso te, kolongola biso te na esika oyo. \v 16 Soki otamboli elongo na biso te, ndenge nini bato bakoyeba ete ngai mpe bato na Yo tozwi ngolu na miso na Yo ? Ezali nde tango okotambola elongo na biso nde ngai mpe bato na yo tokokesana na bikolo nyonso oyo ezali kati na mokili. \p \v 17 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Nakosala makambo nyonso oyo osengi Ngai, pamba te ozwi ngolu na miso na Ngai mpe nayebi yo na kombo na yo. \p \v 18 Moyize azongisaki : \pi1 — Monisa ngai nkembo na Yo. \p \v 19 Yawe azongisaki : \pi1 — Nakolekisa bolamu na Ngai nyonso liboso na yo mpe nakotatola nani oyo nazali liboso na yo ; natalisaka ngolu epai ya moto oyo Ngai nasepeli kosalela ngolu, mpe nayokelaka mawa moto oyo Ngai nasepeli koyokela mawa. \v 20 Kasi okokoka komona elongi na Ngai te, pamba te moto moko te akoki komona Ngai mpe azala na bomoi. \p \v 21 Yawe alobaki lisusu : \pi1 — Ezali na esika moko awa, pembeni na Ngai, epai wapi okoki kotelema na likolo ya libanga. \v 22 Tango nkembo na Ngai ekoleka, nakotia yo kati na lidusu ya libanga mpe nakozipa yo na loboko na Ngai kino nakoleka. \v 23 Bongo tango nakolongola loboko na Ngai, okomona Ngai kaka na mokongo ; kasi okokoka komona elongi na Ngai te. \c 34 \s1 Yawe ayeisi sika boyokani \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 — Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso ; nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya liboso oyo obukaki. \v 2 Omilengela mpo na lobi na tongo. Na tongo-tongo, okomata na ngomba Sinai mpe okotelema liboso na Ngai, kuna na songe ya ngomba. \v 3 Moto moko te asengeli komata elongo na yo ; na ngomba mobimba, moto moko te amonana ; bameme, bantaba to bangombe esengeli mpe te kolia na ebandeli ya ngomba. \p \v 4 Moyize abongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Bongo na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, amataki ngomba Sinai ndenge kaka Yawe atindaki ye ; amemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ye. \p \v 5 Yawe akitaki kati na lipata, atelemaki wana pene na ye, mpe Moyize abelelaki Kombo ya Yawe. \v 6 Yawe alekaki liboso ya Moyize, mpe Moyize atatolaki : \pi1 — Yawe, Yawe, Nzambe na mawa mpe na ngolu, Nzambe oyo asilikaka noki te, atondi na bolingo mpe na boboto, \v 7 atalisaka bolingo na Ye kino na milongo nkoto, alimbisaka mabe, botomboki mpe masumu, kasi azangaka te kopesa etumbu na moto oyo asali mabe, Nzambe oyo apesaka bakitani etumbu mpo na mabe ya batata na bango kino na molongo ya misato mpe ya minei ! \p \v 8 Mbala moko, Moyize afukamaki mpe agumbamelaki Yawe ; \v 9 alobaki : \pi1 — Eh Nkolo, soki penza nazwi ngolu na miso na Yo, nabondeli Yo : tambola kati na biso. Atako bato oyo bazali batomboki, kasi limbisa mabe mpe masumu na biso, mpe zwa biso lokola bato na Yo ! \p \v 10 Yawe azongisaki : \pi1 — Nalingi kosala boyokani elongo na bino. Liboso ya bato na yo nyonso, nakosala makambo ya kokamwa oyo etikala nanu kosalema te na mokili mobimba to na ekolo moko. Boye bato nyonso oyo bazali zingazinga na yo bakomona misala ya somo oyo Ngai Yawe nakosala na nzela na yo. \v 11 Botosa makambo oyo nazali kotinda bino lelo. Nakobengana liboso na bino : bato ya Amori, ya Kanana, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi. \v 12 Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili oyo bozali kokende, noki te bakokoma motambo kati na bino ! \v 13 Bokweyisa bitumbelo na bango, bopanza bikeko na bango mpe bobuka makonzi oyo bapika mpo na nzambe mwasi Ashera. \v 14 Bogumbamela nzambe mosusu te, pamba te Yawe andimaka bombanda te ; Kombo na Ye ezali Nzambe ya zuwa. \v 15 Bokeba ! Bosala boyokani te elongo na bavandi ya mokili yango ; noki te tango bakosambela banzambe na bango mpe bakobonzela yango mbeka, babenga bino mpo ete bolia mbeka na bango elongo ; \v 16 mpe soki bozwi na libala bana na bango ya basi mpo na bana na bino ya mibali, wana bana na bango ya basi bakokoba kosambela banzambe na bango ya bikeko, bakotindika bana na bino ya mibali na kosambela banzambe na bango. \pi1 \v 17 Bokosala nzambe ya ekeko te. \pi1 \v 18 Bokosala feti ya Mapa ezanga levire. Mikolo sambo, bokolia mapa ezanga levire ndenge natindaki yo. Bokosala yango na tango ekatama, na sanza ya Abibi\f + \fr 34.18 \fr*\ft Abibi to Nisani ezali sanza ya liboso na manaka ya Bayuda : ezali na sanza yango nde bana ya Isalaele babimaki na Ejipito mpe ble ekomelaka. Ekokani na suka ya sanza ya misato mpe ebandeli ya sanza ya minei, na manaka na biso.\ft*\f*, pamba te ezali na sanza yango nde bobimaki na Ejipito. \pi1 \v 19 Mwana mobali nyonso ya liboso azali ya Ngai ; ekozala mpe bongo mpo na mwana mobali nyonso ya liboso kati na bibwele na bino : ezala mwana ngombe, mwana ntaba to mwana meme. \v 20 Nzokande, mpo na mwana liboso ya ane, bokosikola yango na mwana meme. Soki bosikoli yango te, bokobuka yango kingo. Bokosikola bana na bino nyonso ya liboso ya mibali. \pi1 Moto moko te akoya kotelema liboso na Ngai maboko pamba. \pi1 \v 21 Bokosala mosala mikolo motoba, kasi na mokolo ya sambo, bosengeli kopema : ezala na tango ya kolona to na tango ya kobuka. \pi1 \v 22 Bokosala feti ya Baposo mpo na kosepela na tina na bambuma ya liboso ya ble oyo ekomeli, mpe feti ya kobuka bambuma na suka ya mobu. \v 23 Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli koya liboso ya Nkolo Yawe, Nzambe ya Isalaele. \v 24 Mpo na bolamu na yo, nakobengana bikolo liboso na yo mpe nakoyeisa mokili na yo monene. Moto moko te akoluka kobotola mokili na yo tango okobanda komata mbala misato na mobu, mpo na kokutana na Yawe, Nzambe na yo. \pi1 \v 25 Okobonzela Ngai te makila ya nyama elongo na mapa batia levire ; okobomba te kino lobi na tongo mbeka oyo babonzi mpo na Pasika. \pi1 \v 26 Okomema na Ndako ya Yawe, Nzambe na yo, bambuma ya liboso ya mabele na yo. \pi1 Okolamba te mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele ya mama na yango. \p \v 27 Yawe alobaki lisusu na Moyize : \pi1 — Koma maloba oyo, pamba te ezali na nzela na yango nde nasalaki boyokani elongo na yo mpe Isalaele. \p \v 28 Moyize asalaki kuna elongo na Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; aliaki ata eloko moko te mpe amelaki mayi te. Bongo Moyize akomaki na bitando ya mabanga maloba ya Boyokani oyo babengi mibeko zomi. \s1 Kongenga ya elongi ya Moyize \p \v 29 Nzokande, tango Moyize akitaki wuta na ngomba Sinai, na bitando ya mabanga mibale ya mibeko na maboko na ye, ayebaki te ete elongi na ye ezalaki kongenga, mpo ete asololaki na Yawe. \v 30 Tango Aron mpe bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete elongi ya Moyize ezali kongenga, babangaki kopusana pembeni na ye. \v 31 Moyize abengaki bango ; bongo Aron mpe bakambi nyonso ya lisanga ya Isalaele bapusanaki pembeni ya Moyize, mpe ye Moyize asololaki na bango. \v 32 Sima na yango, bana nyonso ya Isalaele bapusanaki pembeni ya Moyize mpe ayebisaki bango mibeko nyonso oyo Yawe apesaki ye na ngomba Sinai. \p \v 33 Tango Moyize asilisaki kosolola na bango, azipaki elongi na ye na vwale. \v 34 Kasi tango nyonso Moyize azalaki kokota liboso ya Yawe mpo na kosolola na Ye, azalaki kolongola vwale kino tango akobima. Mpe soki abimi, azalaki koyebisa na bana ya Isalaele mibeko nyonso oyo azalaki kozwa epai na Yawe. \v 35 Mpe bana ya Isalaele bazalaki komona elongi ya Moyize kongenga. Bongo azalaki kozongisa vwale na elongi na ye kino tango azalaki kozonga mpo na kosolola na Yawe. \c 35 \ms1 Misala ya kotonga Mongombo \s1 Bana ya Isalaele bakopema na mokolo ya Saba \p \v 1 Moyize asangisaki lisanga mobimba ya bana ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala : \pi1 \v 2 — Mikolo motoba, bokosala mosala na bino, kasi mokolo ya sambo ekozala mokolo ya bule, mokolo ya Saba mpo na Yawe, mokolo na bino ya kopema. Moto nyonso oyo akosala mosala na mokolo yango, bakoboma ye. \v 3 Na mokolo yango ya Saba, bokopelisa ata moto te na bandako na bino. » \s1 Makabo mpo na misala ya Mongombo \p \v 4 Moyize alobaki na lisanga mobimba ya bana ya Isalaele : « Boyoka makambo oyo Yawe atindi bino kosala : \pi1 \v 5 — Kati na biloko oyo bozali na yango, botia pembeni ndambo oyo bokobonza epai na Yawe lokola makabo. Moto nyonso oyo azali na motema malamu akomemela Yawe makabo : \b \li1 wolo, palata mpe bronze, \li1 \v 6 langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi, lino ya kitoko, \li1 bapwale ya ntaba, \li1 \v 7 baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale ; \li1 banzete ya akasia, \li1 \v 8 mafuta ya olive mpo na kopelisela mwinda, \li1 biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpo na kosala mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko, \li1 \v 9 mabanga ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata. \b \pi1 \v 10 Tika ete bato nyonso oyo kati na bino bayebi misala, baya kosala misala nyonso oyo Yawe atindi : \b \li1 \v 11 Mongombo, ndako na yango ya kapo, ezipelo na yango, bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi na yango mpe bivandelo na yango ; \li1 \v 12 Sanduku elongo na mabaya ya komemela yango, mofinuku na yango, barido, \li1 \v 13 mesa, mabaya na yango, bisalelo na yango nyonso mpe mapa oyo esengeli kozala liboso ya Yawe, \li1 \v 14 etelemiselo ya minda, bisalelo na yango, minda na yango mpe mafuta mpo na kopelisa minda, \li1 \v 15 etumbelo ya malasi, mabaya ya komemela yango, mafuta ya epakolami mpe malasi ya solo kitoko, \li1 rido ya ekotelo ya ndako ya kapo epai wapi Mongombo ezali, \li1 \v 16 etumbelo ya bambeka ya kotumba, motalaka na yango ya bronze, mabaya ya komemela yango mpe bisalelo na yango nyonso, \li1 sani ya bronze mpe evandelo na yango, \li1 \v 17 batapi ya lopango, makonzi na yango, makolo na yango mpe rido mpo na ekotelo ya lopango, \li1 \v 18 bapike ya Mongombo, bapike ya lopango mpe basinga na yango, \li1 \v 19 bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali. » \p \v 20 Lisanga mobimba ya bana ya Isalaele batikaki Moyize. \v 21 Bongo bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe na bolingo ya kopesa, babonzelaki Yawe makabo mpo na mosala ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpo na misala nyonso mpe kotonga bilamba ya bule. \v 22 Bato nyonso oyo bazalaki na motema malamu, ezala mobali to mwasi, bayaki na basheneti, biloko ya matoyi, bapete mpe biloko ya ndenge na ndenge oyo esalema na wolo. Bango nyonso bamemaki biloko na bango ya wolo liboso ya Yawe mpe babonzelaki Ye yango. \v 23 Bato nyonso oyo bazalaki na langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi to mpe ya motane ya kongenga, lino, bapwale ya ntaba, baposo ya bameme batia langi ya motane mpe baposo ya banyama ya ebale, bamemaki yango. \v 24 Bato nyonso oyo batiaki pembeni makabo ya palata to ya bronze bamemaki yango mpe babonzelaki yango Yawe ; ndenge moko mpe na bato oyo bazalaki na banzete ya akasia mpo na misala nyonso. \v 25 Basi nyonso oyo bayebaki kosala bilamba basalaki yango na maboko na bango mpe bamemaki bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe lino ya kitoko. \v 26 Mpe basi nyonso oyo bazalaki na motema malamu mpe bayebaki kosala bilamba, basalaki yango na bapwale ya ntaba. \v 27 Bakambi bamemaki mabanga ya talo ya onikisi mpe mabanga mosusu ya talo mpo na kotia yango na efode mpe na elamba ya tolo oyo Nganga-Nzambe akobanda kolata. \v 28 Bamemaki mpe biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe mafuta mpo na etelemiselo ya minda, mafuta mpo na epakolami mpe malasi ya solo kitoko. \v 29 Bato nyonso ya Isalaele, ezala basi to mibali, oyo mitema na bango esimbamaki mpo na komema eloko mpo na misala oyo Yawe atindaki na nzela ya Moyize, bamemaki epai na Yawe makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango. \s1 Betisaleyeli mpe Oliabi baponami mpo na kotonga \p \v 30 Moyize alobaki na bana ya Isalaele : « Botala, Yawe aponi Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, moto ya libota ya Yuda ; \v 31 atondisi ye na Molimo ya Nzambe, na bwanya, na mayele mpe na boyebi mpo na kosala misala ya lolenge nyonso : \v 32 mpo na kokanisa mpe kosala misala ya wolo, ya palata mpe ya bronze, \v 33 mpo na kokata mabanga ya talo, kobamba yango, kosala bililingi na banzete mpe mpo na kosala misala ya lolenge nyonso. » \v 34 Yawe apesaki na Betisaleyeli mpe Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, makoki ya koteya bato mosusu lolenge ya kosala. \v 35 Apesaki bango lisusu makoki ya kosala misala ya lolenge nyonso : kosala bililingi, kosala bilamba na basinga ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino, kosala misala ya lolenge nyonso mpe kobongisa ndenge misala esengeli kosalema. \c 36 \ms1 Misala ya Mongombo \p \v 1 Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele ya kosala misala ya lolenge nyonso mpo na kotonga Mongombo, basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki. \p \v 2 Bongo Moyize abengisaki Betisaleyeli, Oliabi mpe bato nyonso epai ya banani Yawe apesaki makoki mpe mayele elongo na bato oyo bamibongisaki mpo na kosala misala yango. \v 3 Bazwaki na maboko ya Moyize makabo nyonso oyo bana ya Isalaele bamemaki mpo na kosala misala ya botongi Mongombo. Tongo nyonso, bana ya Isalaele bakobaki komema epai ya Moyize makabo oyo bango moko bakataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bango. \v 4 Boye bato oyo bazalaki kosala misala ya kotonga Mongombo batikaki misala na bango \v 5 mpe bayaki koloba na Moyize : \pi1 — Makabo oyo bana ya Isalaele bazali kopesa eleki mingi mpo na kosala mosala oyo Yawe atindaki. \p \v 6 Bongo Moyize atindaki maloba oyo epai ya bana ya Isalaele : \pi1 — Tika ete moto moko te, azala mwasi to mobali, apesa lisusu makabo mpo na Mongombo ! \p Boye bato batikaki komema makabo, \v 7 pamba te biloko nyonso ezalaki ya kokoka mpo na misala nyonso oyo esengelaki kosalema : ezalaki kutu ya koleka. \s1 Batapi \p \v 8 Bato oyo balekaki mayele kati na basali batongaki Mongombo elongo na batapi zomi ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, elongo na bililingi ya basheribe ; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. \v 9 Tapi moko na moko ezalaki na bametele pene zomi na minei na molayi ; mpe bametele pene mibale, na mokuse. Batapi nyonso ezalaki ndenge moko na mokuse mpe na molayi. \v 10 Bakangisaki batapi mitano, moko na mosusu, mpe basalaki ndenge moko mpo na batapi mitano mosusu. \v 11 Batiaki basinga ya langi ya ble, na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na pembeni ya tapi ya suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale. \v 12 Batiaki basinga tuku mitano na suka ya lisanga ya batapi mitano ya liboso, mpe na suka ya lisanga ya batapi mitano ya mibale ; basinga yango etalanaki. \v 13 Basalaki na wolo bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; mpe bakangisaki na bibende oyo ezali lokola ndobo lisanga ya batapi mitano ya liboso mpe lisanga ya batapi mitano ya mibale. Boye, Mongombo ebimaki eloko moko. \p \v 14 Basalaki batapi zomi na moko, na bapwale ya ntaba mpo na kotia yango na likolo ya Mongombo. \v 15 Molayi ya tapi moko na moko ezalaki na bametele pene zomi na mitano mpe mokuse na yango ezalaki na bametele pene mibale. Batapi nyonso zomi na moko ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse. \v 16 Bakangisaki batapi mitano na ngambo moko, mpe batapi motoba na ngambo mosusu. \v 17 Batiaki basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya liboso, mpe basinga tuku mitano na suka ya liboke ya batapi ya mibale. \v 18 Basalaki na bronze bibende tuku mitano oyo ezali lokola ndobo ; bakotisaki yango na basinga mpo na kokangisa Mongombo mpo ete ekoma eloko moko. \v 19 Basalelaki baposo ya bameme oyo bapakola langi ya motane mpo na kozipa Mongombo, mpe babakisaki na likolo na yango baposo ya banyama ya ebale. \s1 Bizingelo \p \v 20 Basalaki bizingelo ya Mongombo na banzete ya akasia mpe batelemisaki yango. \v 21 Ezingelo moko na moko ezalaki na bametele mitano na molayi, mpe basantimetele tuku sambo na mitano na mokuse. \v 22 Babetaki banzete mibale-mibale na ezingelo moko na moko ; basalaki bongo mpo na bizingelo nyonso ya Mongombo. \v 23 Batiaki bizingelo tuku mibale na ngambo ya Negevi, na sude ya Mongombo, \v 24 mpe makolo tuku minei ya palata, na se ya bizingelo tuku mibale : makolo mibale na se ya ezingelo moko na moko oyo babeta banzete mibale ; \v 25 bizingelo tuku mibale na ngambo mosusu ya Mongombo, na nor, \v 26 elongo na makolo na yango tuku minei ya palata : makolo mibale mpo na ezingelo moko na moko ; \v 27 bizingelo motoba na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste, \v 28 mpe bizingelo mibale na suka mpo na kolendisa Mongombo. \v 29 Bizingelo yango ezalaki ya kofungwama na se, kasi esalaki songe na likolo mpe ekotaki na lopete ya liboso : nyonso mibale ezalaki ndenge moko mpe elendisaki Mongombo. \v 30 Boye, bizingelo ezalaki mwambe elongo na makolo na yango ya palata zomi na motoba : makolo mibale-mibale na se ya ezingelo moko na moko. \p \v 31 Sima, basalaki, na nzete ya akasia, mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo moko ya Mongombo, \v 32 mabaya mitano mpo na bizingelo ya ngambo mosusu ya Mongombo, mabaya mitano mpo na bizingelo oyo ezalaki na suka ya Mongombo, na ngambo ya weste. \v 33 Libaya ya kati elekaki na kati-kati ya bizingelo, elekaki ngambo na ngambo. \v 34 Babambaki wolo na bizingelo, basalaki bapete na yango na wolo mpo na kolekisa mabaya ; mpe babambaki mabaya wolo. \s1 Rido \p \v 35 Basalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango. Mpe bato oyo basalaka bililingi batongaki basheribe ya kitoko na rido yango. \v 36 Batiaki yango na makonzi minei ya nzete ya akasia, oyo bapakola wolo ; bakangisaki yango na bibende ya wolo oyo ezali lokola ndobo mpe batelemisaki yango na makolo minei ya palata. \v 37 Mpo na ekotelo ya Ndako ya kapo, asalaki rido ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko ; ezalaki mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. \v 38 Basalaki na wolo bibende mitano oyo ezali lokola ndobo mpo na kokangisela rido, mpe banzete mitano ya akasia babamba wolo ; basalaki makolo mitano ya bronze mpo na kotelemisela banzete yango. \c 37 \s1 Sanduku mpe mofinuku \p \v 1 Betisaleyeli asalaki Sanduku na nzete ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano ; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. \v 2 Abambaki yango wolo ya peto, na kati mpe na libanda. Alatisaki mpe songe na yango wolo. \v 3 Asalelaki yango bapete minei ya wolo mpe atiaki yango basonge minei : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu. \v 4 Asalaki mabaya mibale na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo. \v 5 Akotisaki mabaya yango na bapete oyo ezali na songe ya Sanduku, mpo na komemela yango. \v 6 Asalaki mofinuku na wolo ya peto. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko na tuku mibale na mitano ; mpe mokuse na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. \v 7 Asalaki bikeko mibale ya basheribe oyo atiaki na suka mibale ya mofinuku ; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. \v 8 Atiaki ekeko moko ya sheribe na suka moko, mpe ekeko mosusu, na suka mosusu. Akangisaki bikeko ya basheribe na mofinuku, na suka nyonso mibale. \v 9 Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo mpo na kobatela mofinuku ; bazalaki ngambo na ngambo, mpe miso na bango etalaki mofinuku. \s1 Mesa ya mapa \p \v 10 Asalaki mesa moko na mabaya ya akasia. Molayi na yango ezalaki na basantimetele pene nkama moko ; mokuse na yango, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango, basantimetele pene tuku sambo na mitano. \v 11 Abambaki yango wolo ya peto mpe atiaki lisusu wolo na pembeni na yango. \v 12 Azingelaki mesa yango na libaya oyo ezalaki na basantimetele pene mwambe na monene mpe atiaki wolo na pembeni ya libaya yango. \v 13 Asalaki bapete minei ya wolo mpe atiaki yango na songe minei ya mesa epai wapi makolo na yango ezalaki. \v 14 Bapete ezalaki pene ya libaya oyo ezingelaki mesa, mpe bakotisaki kati na bapete yango mabaya ya komemela Sanduku. \v 15 Asalaki na nzete ya akasia mabaya ya komemela mesa, mpe abambaki yango wolo. \v 16 Asalaki na wolo ya peto basani, bakopo, bambilika mpe bambeki, mpo na makabo ya masanga. \s1 Etelemiselo ya minda \p \v 17 Asalaki na wolo ya peto etelemiselo ya minda ; asalaki yango na wolo oyo batuti na nzela ya marto. Evandelo na yango, likonzi na yango, bakeni na yango, bambuma mpe bafololo na yango, nyonso ezalaki ekangana lokola eloko moko. \v 18 Mipanzi ya likonzi ya etelemiselo ya minda ezalaki na bitape motoba : misato na ngambo moko, mpe misato na ngambo mosusu. \v 19 Na likolo ya etape moko na moko ya etelemiselo ya minda, atiaki bakeni misato oyo ezali na lolenge ya fololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo. \v 20 Na moto ya likonzi ya etelemiselo ya minda, ezalaki na bakeni minei oyo ezali na lolenge ya bafololo ya madame, elongo na bambuma mpe bafololo. \v 21 Na se ya bitape mibale-mibale ya etelemiselo ya minda, ezalaki na mbuma moko ; mpe ezalaki bongo mpo na bitape nyonso motoba ya etelemiselo ya minda. \v 22 Bambuma mpe bitape ezalaki ekangana na etelemiselo ya minda ; mpe nyonso esalemaki na wolo ya peto, wolo oyo batuti na nzela ya marto. \v 23 Asalaki minda sambo ; mpe asalaki na wolo ya peto bisimbelo elongo na basani ya putulu. \v 24 Asalelaki bakilo tuku misato na minei ya wolo ya peto mpo na kosala etelemiselo ya minda mpe bisalelo na yango nyonso. \s1 Etumbelo ya malasi \p \v 25 Betisaleyeli asalaki etumbelo ya malasi na nzete ya akasia. Molayi mpe mokuse na yango ezalaki ndenge moko, basantimetele pene tuku mitano ; mpe bosanda na yango ezalaki na metele moko. Maseke na yango ekangamaki na etumbelo mpe esalaki kaka eloko moko. \v 26 Abambaki wolo ya peto na likolo ya etumbelo, na mipanzi na yango mpe na maseke na yango ; mpe azingelaki pembeni na yango na libende ya wolo. \v 27 Asalaki mpo na etumbelo bapete ya wolo na se ya ebende ya wolo oyo ezingeli yango : mibale na ngambo moko, mpe mibale na ngambo mosusu ; mpo na kokotisa mabaya ya komemela etumbelo. \v 28 Asalaki mabaya yango na nzete ya akasia mpe abambaki yango wolo. \v 29 Asalaki mafuta ya epakolami ya bule, malasi ya solo kitoko mpe ya peto, oyo esalemi na mosali malasi. \c 38 \s1 Etumbelo ya mbeka ya kotumba \p \v 1 Betisaleyeli asalaki na mabaya ya nzete ya akasia etumbelo ya bambeka ya kotumba ; ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; bongo bosanda na yango ezalaki ya metele moko na basantimetele tuku mitano. \v 2 Asalaki maseke minei na basonge nyonso minei ya etumbelo, mpo ete maseke mpe etumbelo esala eloko moko ; mpe abambaki bronze na etumbelo. \v 3 Asalaki na bronze banzungu ya mike mpo na kolongola putulu ya moto, bapawu, basani ya minene, bakanya mpe basani mpo na komema makala ya moto. \v 4 Asalaki motalaka ya bronze mpo na etumbelo ; akangisaki bapete minei ya bronze na basonge nyonso minei ya motalaka. \v 5 Asalaki na bronze bapete minei oyo atiaki na basonge nyonso minei ya motalaka mpo na koyamba mabaya. \v 6 Asalaki na nzete ya akasia, mabaya mpo na etumbelo mpe abambaki yango bronze. \v 7 Boye, mpo na komema etumbelo, bakotisaki mabaya yango na bapete oyo ezali na basonge mibale ya etumbelo. Bongo etumbelo yango ezalaki polele kati na yango. \s1 Sani monene mpo na komipetola \p \v 8 Asalaki lisusu na bronze ya bitalatala ya basi oyo bazalaki kosangana na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani : sani monene mpo na komipetola mpe evandelo na yango. \s1 Lopango \p \v 9 Tala ndenge atongaki lopango ya Mongombo : ngambo ya sude oyo ezalaki ya bametele pene tuku mitano na molayi, ezipamaki na rido ya lino oyo basali bilamba basalaki. \v 10 Makonzi na yango tuku mibale mpe bivandelo tuku mibale esalemaki na bronze ; bongo bibende ya makonzi elongo na biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata. \v 11 Ngambo ya nor ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi, na makonzi tuku mibale mpe na makolo tuku mibale, oyo esalema na bronze. Makonzi yango ezalaki na bibende ya palata egumbama lokola ndobo elongo na biloko na yango ya kosimbela, oyo ezalaki ya palata. \v 12 Ngambo ya weste ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe barido elongo na makonzi zomi, makolo zomi, bibende ya palata egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela. \v 13 Ngambo ya este ya lopango ya Mongombo, epai wapi moyi ebimelaka, ezalaki na bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse. \v 14 Ngambo moko ya ekuke ezalaki na barido ya bametele pene sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato. \v 15 Ngambo mosusu ya ekuke ezalaki mpe na barido ya bametele pene sambo na basantimetele tuku mitano, elongo na makonzi misato mpe makolo misato. \v 16 Barido nyonso zingazinga ya lopango ezalaki ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango. \v 17 Makolo ya makonzi ezalaki ya bronze ; bibende egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata. Makonzi nyonso ya lopango ezalaki na biloko ya palata ya kosimbela. \v 18 Rido ya ekuke ya lopango ezalaki ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango ; ezalaki mosala ya bato oyo batongaka bililingi na bilamba. Molayi na yango ezalaki na bametele pene zomi, mpe bosanda na yango, bametele pene mibale na basantimetele pene tuku mitano, ndenge barido nyonso ya lopango ezalaki. \v 19 Ezalaki mpe na makonzi minei mpe bivandelo minei ya bronze. Bibende na yango oyo egumbama lokola ndobo mpe biloko na yango ya kosimbela rido ezalaki ya palata, mpe balatisaki basonge na yango palata. \v 20 Bapike nyonso ya Mongombo mpe ya lopango ezalaki ya bronze. \s1 Biloko oyo basalelaki Mongombo \p \v 21 Tala motuya ya biloko oyo basalelaki Mongombo oyo, kati na yango, ezalaki na buku ya Boyokani, ndenge kaka Moyize atindaki. Balevi batongaki yango na bokambami ya Itamari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Aron. \v 22 Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri, mwana mobali ya Wuri, ya libota ya Yuda, asalaki nyonso oyo Yawe atindaki Moyize. \v 23 Asungamaki na Oliabi, mwana mobali ya Ayisamaki, moto ya libota ya Dani, mosali mpe motongi bililingi na maboko, oyo azalaki kobimisa makanisi mpe kotonga bililingi na bilamba ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko. \p \v 24 Wolo nyonso oyo basalelaki mpo na kotonga mpe mpo na misala nyonso ya Mongombo, wolo oyo babonzelaki Yawe, ezalaki bakilo nkoto moko mpe bagrame nkama moko na tuku mibale, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Wolo nyonso wana ewutaki na makabo ya kotombola. \v 25 Palata oyo bazwaki na maboko ya bato oyo batangamaki na lisanga, ezalaki bakilo nkoto misato mpe bagrame nkama minei na tuku minei, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. \v 26 Elingi koloba ete moto nyonso oyo batangaki amemaki bagrame mitano na badesigrame sambo, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na Mongombo. Bato nyonso oyo batangamaki, oyo bazalaki na mibu ya mbotama tuku mibale mpe koleka, bazalaki nkoto nkama motoba na misato na nkama mitano na tuku mitano. \v 27 Basalelaki bakilo ya palata nkoto misato na nkama minei na tuku mibale mpo na kosala bivandelo nkama moko ya Mongombo mpe barido nkama moko : elingi koloba ete basalelaki bakilo pene tuku misato na minei mpe bagrame pene nkama mibale mpo na evandelo moko. \v 28 Shekeli nkoto moko na nkama sambo na tuku sambo na mitano oyo etikalaki, basalelaki yango bibende oyo egumbama lokola ndobo, biloko ya kosimbela rido mpe balatiselaki yango basonge ya makonzi. \v 29 Bronze oyo ewutaki na makabo ya kotombola ezalaki bakilo pene nkoto mibale na nkama minei na tuku mibale na moko. \v 30 Bazwaki yango mpo na kosala bivandelo ya ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani, etumbelo ya bronze elongo na motalaka na yango mpe bisalelo na yango nyonso. \v 31 Basalelaki yango lisusu bivandelo nyonso oyo ezalaki pembeni-pembeni ya lopango ya Mongombo, bivandelo ya ekotelo na yango, bapike nyonso ya Mongombo mpe bapike oyo ezingelaki lopango. \c 39 \ms1 Bilamba ya Banganga-Nzambe \p \v 1 Batongaki na langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe kati na Mongombo ; batongaki mpe bilamba ya bule mpo na Aron, ndenge kaka Yawe atindaki yango na Moyize. \s1 Elamba ya likolo \p \v 2 Betisaleyeli atongaki efode ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango ; asalaki yango kitoko penza. \v 3 Batandaki mabende mike-mike ya wolo, bakataki-kataki yango lokola basinga mpe bakotisaki kati na langi ya ble mpe ya motane ya pete, langi ya motane makasi mpe lino ya kitoko ; ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bililingi na maboko. \v 4 Atiaki bankamba mibale na basuka na yango mibale mpo na kolata efode yango ; bankamba elekaki likolo ya mapeka. \v 5 Mokaba ya efode esalemaki lolenge moko na efode : ezalaki ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \v 6 Abongisaki mabanga ya onikisi, mpe bakangaki yango na bikangelo ya wolo ; akomaki likolo na yango bakombo ya bana mibali ya Isalaele, ndenge basalaka bililingi na kashe. \v 7 Atiaki yango na bankamba ya efode lokola mabanga ya ekaniseli mpo na bana mibali ya Isalaele, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \s1 Elamba ya tolo \p \v 8 Betisaleyeli asalaki elamba ya tolo ; esalemaki kitoko penza. Atongaki yango ndenge moko na efode : ezalaki ya wolo, ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango. \v 9 Agumbaki yango na biteni mibale ; molayi mpe mokuse ezalaki ndenge moko, basantimetele pene tuku mibale na mitano. \v 10 Atiaki milongo minei ya mabanga ya talo na likolo ya elamba ya tolo : na molongo ya liboso, libanga ya saridwane, ya topaze mpe ya emerode. \v 11 Na molongo ya mibale, libanga ya ribisi, ya safiri mpe ya diama. \v 12 Na molongo ya misato, libanga ya opale, ya agate mpe ya ametisite ; \v 13 na molongo ya minei, libanga ya krizolite, ya onikisi mpe ya jasipe. Akangaki mabanga yango na bikangelo ya wolo. \v 14 Mabanga yango ezalaki zomi na mibale kolanda bakombo ya bana mibali ya Isalaele. Na likolo ya libanga moko na moko, bakomaki kombo ya moko kati na mabota zomi na mibale ; bakomaki yango ndenge basalaka bililingi na kashe. \v 15 Basalaki basheneti ya wolo ya peto mpo na elamba ya tolo ; basalaki yango ndenge bakangaka suki ya maboko. \v 16 Basalaki bikangelo mibale ya wolo mpe bapete mibale ya wolo mpe bakangisaki yango na basonge mibale ya elamba ya tolo. \v 17 Alekisaki basheneti mibale ya wolo kati na bapete mibale oyo atiaki na basonge mibale ya elamba ya tolo. \v 18 Akangisaki basonge mibale mosusu ya basheneti oyo mibale na bikangelo mibale oyo atiaki na bankamba ya efode ; bankamba yango elekaki na liboso. \v 19 Asalaki lisusu bapete mibale ya wolo mpe atiaki yango na basonge mibale ya se ya elamba ya tolo, na ngambo ya kati oyo etala efode. \v 20 Asalaki bapete mosusu mibale ya wolo oyo atiaki na bankamba mibale ya efode, na se, na liboso mpe na pembeni ya mokaba ya efode. \v 21 Akangisaki na singa ya langi ya ble bapete ya wolo ya elamba ya tolo mpe bapete ya wolo ya efode, mpo ete elamba ya tolo ezala likolo ya efode mpe elongwa te na likolo na yango. Asalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \s1 Bilamba mosusu ya Banganga-Nzambe \p \v 22 Basalaki nzambala oyo ezalaki na se ya efode : ezalaki ya langi ya ble na mobimba na yango, mpe ezalaki mosala ya bato oyo basalaka bilamba na maboko. \v 23 Nzambala ezalaki na lidusu na kati-kati mpo na kokotisa moto ; batongaki pembeni-pembeni ya lidusu yango poso ya makasi mpo ete epasuka te. \v 24 Na se mpe zingazinga ya nzambala, batiaki bambuma ya grenade bakangisa na singa ya langi ya ble, ya motane ya pete, ya motane makasi mpe na singa ya lino ya kitoko oyo batongaki bililingi na likolo na yango. \v 25 Basalaki na wolo ya peto bangonga ya mike-mike mpe batiaki yango kati na bagrenade, na se ya nzambala. \v 26 Balandisaki yango boye : ngonga moko ya moke, grenade moko, mpe bongo na bongo, zingazinga ya basonge nyonso ya nzambala mpo na mosala, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \p \v 27 Batongaki na lino ya kitoko, mpo na Aron mpe bana na ye ya mibali, banzambala, \v 28 bitendi ya lino ya kitoko mpo na moto, bikoti, bakaputula \v 29 mpe mikaba oyo batonga bililingi na likolo na yango na basinga ya lino ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \v 30 Basalaki na wolo ya peto medaye lokola elembo ya libulisi na ye epai na Yawe mpe bakomaki na likolo na yango ndenge basalaka bililingi na kashe : \pc abulisama mpo na Yawe. \m \v 31 Batiaki yango singa ya ble mpo na kokangisa yango na likolo ya kitendi ya moto, ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \s1 Misala ya kotonga Mongombo esili \p \v 32 Boye misala nyonso ya Mongombo, ya Ndako ya kapo ya Bokutani, esilaki. Bana ya Isalaele basalaki misala nyonso ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \v 33 Bamemaki Mongombo epai ya Moyize, elongo na biloko na yango nyonso : \b \li1 ndako ya kapo mpe bibende na yango oyo ezali lokola ndobo, bikangelo na yango, mabaya na yango, makonzi mpe bivandelo na yango, \li1 \v 34 ezipelo ya poso ya meme oyo bapakola langi ya motane, ezipelo ya poso ya nyama ya ebale mpe barido, \li1 \v 35 Sanduku ya Litatoli, mabaya ya komemela yango mpe mofinuku na yango, \li1 \v 36 mesa, bisalelo na yango nyonso mpe mapa oyo esengeli kozala liboso ya Yawe ; \li1 \v 37 etelemiselo ya minda, oyo basala na wolo ya peto, minda na yango, bisalelo na yango nyonso mpe mafuta mpo na kopelisa minda yango, \li1 \v 38 etumbelo oyo esalema na wolo, mafuta ya epakolami, malasi ya solo kitoko, rido ya ekotelo ya ndako ya kapo, \li1 \v 39 etumbelo esalema na bronze, motalaka na yango ya bronze, mabaya ya komemela yango mpe bisalelo na yango nyonso, sani ya bronze mpe evandelo na yango, \li1 \v 40 batapi ya lopango, makonzi na yango, makolo na yango, rido mpo na ekotelo ya lopango, \li1 basinga na yango, bapike na yango, \li1 bisalelo nyonso mpo na mosala ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, \li1 \v 41 bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na kosala kati na Mongombo, bilamba ya bule mpo na Nganga-Nzambe Aron mpe bilamba ya mosala ya bonganga-Nzambe mpo na bana na ye ya mibali. \b \p \v 42 Bana ya Isalaele basalaki misala nyonso ndenge kaka Yawe atindaki Moyize. \v 43 Moyize atalaki malamu misala yango mpe amonaki ete basalaki yango ndenge kaka Yawe atindaki. Boye Moyize apambolaki bango. \c 40 \s1 Mitindo mpo na kotelemisa mpe kobulisa Mongombo \p \v 1 Yawe alobaki na Moyize : \pi1 \v 2 — Na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso, okotelemisa Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani ; \v 3 okotia kati na yango Sanduku ya Litatoli mpe okozipa yango na rido. \v 4 Okokotisa mesa mpe okotia biloko oyo esengeli kozala likolo na yango ; okokotisa etelemiselo ya minda mpe okopelisa minda na yango. \v 5 Okotia etumbelo ya malasi, oyo basala na wolo liboso ya Sanduku ya Litatoli mpe okotia rido, na ekotelo ya Mongombo. \v 6 Okotia etumbelo ya mbeka ya kotumba liboso ya ekotelo ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, \v 7 mpe okotia sani mpo na komipetola na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo, mpe okotia mayi kati na yango. \v 8 Okotonga lopango zingazinga na yango mpe okotia rido na ekotelo ya lopango. \pi1 \v 9 Okozwa mafuta ya epakolami, okopakola Mongombo mpe nyonso oyo ezali kati na yango, mpe okobulisa yango elongo na bisalelo na yango nyonso mpe yango ekozala bule. \v 10 Okopakola mafuta na etumbelo ya mbeka ya kotumba mpe bisalelo na yango nyonso ; okobulisa etumbelo mpe yango ekozala bule koleka. \v 11 Okopakola mafuta na sani mpo na komipetola mpe evandelo na yango, mpe okobulisa yango. \s1 Libulisi ya Aron mpe bana na ye ya mibali \pi1 \v 12 Okomema Aron mpe bana na ye ya mibali na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe okosukola bango na mayi. \v 13 Sima na yango, okolatisa Aron bilamba ya bule, okopakola ye mafuta mpe okobulisa ye mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe. \v 14 Okomema mpe bana na ye ya mibali mpe okolatisa bango banzambala. \v 15 Okopakola bango mafuta ndenge opakolaki tata na bango, mpo ete basalela Ngai lokola Banganga-Nzambe : epakolami na bango ekopesa bango nzela mpo na kosala mosala ya bonganga-Nzambe libela na libela kati na bakitani na bango. \s1 Moyize atelemisi Mongombo \p \v 16 Moyize asalaki nyonso oyo Yawe atindaki ye. \v 17 Boye, Mongombo etelemisamaki na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso na mobu ya mibale. \v 18 Tango Moyize atelemisaki Mongombo, atiaki bivandelo na esika na yango, atiaki bakadre, akotisaki mabaya mpe atelemisaki makonzi ; \v 19 atandaki ndako ya kapo na likolo ya Mongombo mpe atiaki ezipelo na likolo ya ndako ya kapo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize. \p \v 20 Moyize azwaki bitando nyonso mibale ya mabanga ya Boyokani mpe atiaki yango kati na Sanduku, akangisaki mabaya na Sanduku mpe atiaki esika ya bolimbisi masumu na likolo na yango. \v 21 Moyize akotisaki Sanduku kati na Mongombo mpe atiaki rido mpo na kokabola Esika ya bule mpe Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpo ete bato bakoka komona Sanduku ya Litatoli te, ndenge kaka Yawe atindaki ye. \p \v 22 Moyize atiaki mesa kati na Ndako ya kapo ya Bokutani na ngambo ya nor ya Mongombo libanda ya rido ; \v 23 mpe atiaki mapa na molongo, liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize. \p \v 24 Atiaki etelemiselo ya minda kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, etalana na mesa, na ngambo ya sude ya Mongombo. \v 25 Apelisaki minda liboso ya Yawe, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize. \p \v 26 Atiaki etumbelo ya wolo kati na Ndako ya kapo ya Bokutani liboso ya rido, \v 27 mpe atumbaki likolo na yango ansa ya solo kitoko, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize. \p \v 28 Bongo atiaki rido na ekotelo ya Mongombo. \v 29 Atiaki etumbelo ya mbeka ya kotumba pembeni ya ekuke ya Mongombo, Ndako ya kapo ya Bokutani, abonzaki likolo na yango bambeka ya kotumba mpe makabo ya mbuma, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize. \p \v 30 Atiaki sani mpo na komipetola na kati-kati ya Ndako ya kapo ya Bokutani mpe etumbelo mpe atiaki kati na yango mayi ya kosukola. \v 31 Moyize, Aron mpe bana mibali ya Aron basalelaki yango mpo na kosukola maboko mpe makolo na bango. \v 32 Bazalaki komisukola tango nyonso bazalaki kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani to kopusana pembeni ya etumbelo, ndenge kaka Yawe atindaki ye Moyize. \p \v 33 Moyize atelemisaki lopango pembeni-pembeni ya Mongombo mpe ya etumbelo, mpe atiaki rido na ekuke ya lopango. Ezali boye nde Moyize asilisaki mosala. \s1 Nkembo na Yawe etondi kati na Mongombo \p \v 34 Lipata ezipaki Ndako ya kapo ya Bokutani mpe nkembo na Yawe etondaki kati na Mongombo. \v 35 Moyize akokaki lisusu te kokota na Ndako ya kapo ya Bokutani, pamba te lipata evandaki likolo na yango mpe nkembo na Yawe etondaki kati na Mongombo. \v 36 Tango nyonso lipata ezalaki kolongwa na likolo ya Ndako ya kapo ya Bokutani, bana ya Isalaele bazalaki kotelema mpo na kokende na mobembo na bango. \v 37 Kasi soki lipata elongwe te, bango mpe bazalaki kolongwa te, bazalaki kozela kino na mokolo oyo lipata ekolongwa. \v 38 Na moyi, lipata ya Yawe ezalaki na likolo ya Mongombo ; bongo na butu, moto ezalaki kongala kati na lipata, mpe miso ya bana nyonso ya Isalaele ezalaki komona yango. Esalemaki bongo na mibembo na bango nyonso.