\id EST Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Ester \toc1 Ester \toc2 Ester \toc3 Es \mt1 Ester \c 1 \s1 Feti ya mokonzi \p \v 1 Tala makambo oyo esalemaki na tango ya mokonzi Kizerisesi oyo azalaki kokamba bituka nkama moko na tuku mibale na sambo, longwa na Ende kino na Kushi. \v 2 Na tango wana, Kizerisesi akendeki kovanda na kiti na ye ya bokonzi kuna na Size, engumba mokonzi batonga makasi. \v 3 Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, asalisaki feti monene mpo na bato na ye nyonso ya lokumu : bakalaka na ye, bakonzi ya basoda ya mokili ya Persi mpe ya Medi, bankumu mpe bayangeli ya bituka. \v 4 Na feti yango, azalaki kolakisa ebele ya bomengo ya bokonzi na ye mpe kongenga ya lokumu monene oyo azalaki na yango. Feti yango esalaki mikolo nkama moko na tuku mwambe. \p \v 5 Sima na mikolo yango, mokonzi asalisaki kati na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, feti mosusu oyo esalaki mikolo sambo mpo na bato nyonso, ezala babola to bazwi, oyo bazalaki kati na Size, engumba mokonzi batonga makasi. \v 6 Elamba yango ezalaki na banzela ya langi ya mosaka, ya langi ya pembe mpe ya langi ya ble ; bakangisaki yango na makonzi oyo basala na mabanga ya marbre, na basinga ya lino ya langi ya pembe mpe ya motane ; bongo balekisaki yango kati na bapete ya palata. Batiaki bakiti minene ya wolo mpe ya palata, na etando ya lopango ya bakaro oyo basala na mabanga ya talo ya langi ya ndenge na ndenge : mabanga ya porfire, ya marbre, ya marbre ya mwindo mpe mabanga mosusu ya talo. \v 7 Bazalaki kokabola masanga ya vino na bakopo ya wolo ; kopo na kopo ezalaki na lolenge na yango. Bongo vino ezalaki penza ebele kolanda motema ya kokaba ya mokonzi. \v 8 Mokonzi apesaki mitindo ete moto nyonso oyo abengami na feti amela masanga ndenge alingi, pamba te atindaki bato nyonso oyo bakabolaka masanga kopesa na moto nyonso masanga ya vino kolanda posa ya moto na moto. \s1 Vasti aboyi kotosa mokonzi \p \v 9 Vasti, mwasi ya mokonzi, ye mpe asalisaki feti mpo na basi, kati na ndako ya mokonzi Kizerisesi. \v 10 Na mokolo ya sambo, lokola mokonzi Kizerisesi alangwaki vino, atindaki basoda na ye sambo oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kosalela ye : Mewumani, Bizita, Aribona, Bigita, Abagita, Zetari mpe Karikasi. \v 11 Atindaki bango ete bamema liboso na ye Vasti, mwasi ya mokonzi ; bongo alata motole na ye ya bokonzi mpo ete alakisa kitoko na ye epai ya bato mpe epai ya bakalaka, pamba te azalaki penza kitoko. \v 12 Kasi tango basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki Vasti, mwasi ya mokonzi, mitindo oyo mokonzi apesaki ; Vasti, mwasi ya mokonzi, aboyaki kokende. Mokonzi atombokaki makasi mpe apelaki na kanda. \v 13 Asololaki na bato na ye ya bwanya oyo bayebaka kososola tango, pamba te ezalaki momesano ete makambo ya mokonzi esengeli koya liboso ya bato nyonso ya bwanya, ba-oyo bayebi malamu makambo etali mibeko mpe bosembo, mpo ete basosola yango. \v 14 Nzokande, ezalaki na bato sambo ya lokumu, bato ya Persi mpe ya Medi, oyo bazalaki bapesi toli oyo mokonzi azalaki kolinga makasi ; bazalaki kosangana na mayangani ya mokonzi mpe basimbaki misala oyo eleki minene. Bakombo na bango ezalaki : Karishena, Shetari, Adimata, Tarsisi, Meresi, Marisena mpe Memukani. \v 15 Mokonzi atunaki bango : \pi1 — Kolanda mobeko, esengi kosala nini epai ya Vasti, mwasi ya mokonzi, mpo ete aboyi kotosa mitindo ya mokonzi Kizerisesi, mitindo oyo basoda oyo baboma bango mokongo bayebisaki ye ? \p \v 16 Memukani azongiselaki mokonzi liboso ya bakalaka na ye : \pi1 — Vasti, mwasi ya mokonzi, asali mabe kaka liboso ya mokonzi te ; kasi mpe, liboso ya bakalaka nyonso mpe ya bato nyonso kati bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi. \v 17 Pamba te sango ya ezaleli mabe ya mwasi ya mokonzi ekoyebana kati na basi nyonso ; na bongo, bakokoma kotiola bokonzi ya mibali na bango na koloba : « Mokonzi Kizerisesi kutu apesaki mitindo ete babenga Vasti mpo ete akende liboso na ye, kasi mwasi ya mokonzi aboyaki kokende ! » \v 18 Kaka na mokolo ya lelo, basi ya bakalaka ya bato ya Persi mpe ya Medi, oyo bayoki sango ya ezaleli mabe ya mwasi ya mokonzi, bakozongisela bakalaka nyonso ya mokonzi kaka ndenge moko. Boye, kozanga na bango limemia mpe botosi ekoluka ete mibali na bango bakoma na kanda. \v 19 Yango wana, soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi azwa mobeko oyo ekoki kobongwana te ; mpe tika ete mobeko yango ekomama kati na mibeko ya Persi mpe ya Medi : Vasti akoki lisusu te kotelema liboso ya mokonzi Kizerisesi ; mokonzi akopesa lokumu na ye ya mwasi ya mokonzi epai ya mwasi mosusu oyo azali malamu koleka ye. \v 20 Boye tango mobeko ya mokonzi ekopanzana na mokili na ye mobimba, basi nyonso bakotosa mibali na bango, ezala babola to bazwi. \p \v 21 Toli oyo esepelisaki mokonzi elongo na bakalaka na ye. Mokonzi asalaki ndenge Memukani alobaki. \v 22 Atindaki mikanda na bituka nyonso ya mokili : etuka na etuka kolanda ndenge ezali ekomeli na yango ; mpe bato na bato, kolanda lokota na bango. Mikanda yango elobaki ete mobali nyonso asengeli kozala mokonzi ya ndako na ye mpe koloba monoko ya mboka na ye. \c 2 \s1 Mabongisi mpo na kopona mwasi ya mokonzi \p \v 1 Sima na mikolo, kanda ya mokonzi Kizerisesi ekitaki ; akomaki kokanisa Vasti, makambo oyo asalaki mpe mobeko oyo azwaki na tina na ye. \v 2 Bato oyo basalaka epai ya mokonzi balobaki na ye : \pi1 — Tika ete balukela mokonzi bilenge basi ya kitoko oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. \v 3 Tika ete mokonzi atia bato kati na etuka moko na moko ya bokonzi na ye, mpo ete bamema na ndako ya basi oyo ezalaka na Size, engumba mokonzi, bilenge basi nyonso ya kitoko oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te. Tika ete bapesa bango na maboko ya Ege, kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, oyo baboma ye mokongo mpe abatelaka basi ; mpe tika ete bapesa bango mafuta mpe malasi oyo ekomisaka bato kitoko. \v 4 Tika ete elenge mwasi oyo akosepelisa mokonzi akoma mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti. \p Likanisi oyo esepelisaki mokonzi mpe asalelaki yango. \p \v 5 Kati na Size, engumba mokonzi batonga makasi, ezalaki na Moyuda moko ya libota ya Benjame ; kombo na ye ezalaki « Maridoshe. » Maridoshe azalaki mwana mobali ya Yairi, mwana mobali ya Shimei, mwana mobali ya Kishi. \v 6 Maridoshe azalaki kati na bato oyo Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, amemaki na bowumbu, longwa na Yelusalemi, elongo na Yekonia, mokonzi ya Yuda. \v 7 Maridoshe azalaki kobokola Adasa, mwana mwasi ya noko na ye mpo ete azalaki lisusu na tata mpe na mama te. Nzokande, elenge mwasi oyo kombo na ye mosusu ezalaki « Ester » azalaki na ezaleli malamu mpe elongi kitoko. Tango tata mpe mama na ye bakufaki, Maridoshe azwaki ye mpe akomaki kobokola ye lokola mwana na ye penza ya mwasi. \s1 Ester kati na ndako ya mokonzi \p \v 8 Tango bapanzaki sango ya mitindo mpe ya mobeko ya mokonzi, basangisaki bilenge basi ebele na engumba Size, mpe Ege azalaki kobatela bango. Boye bamemaki mpe Ester kati na ndako ya mokonzi mpe bapesaki ye na maboko ya Ege, mosali oyo azalaki kobatela ndako ya basi ya mokonzi. \v 9 Ester asepelisaki Ege mpe azwaki ngolu na miso na ye. Mbala moko, apesaki ye biloko ya monzele mpe bilei oyo asengeli kolia ; apesaki ye mpe basali sambo ya basi oyo aponaki kati na ndako ya mokonzi. Bongo atiaki ye elongo na basali na ye ya basi kati na shambre oyo elekaki kitoko kati na ndako ya basi ya mokonzi. \v 10 Ester atikalaki te koyebisa ekolo mpe libota na ye, pamba te Maridoshe apekisaki ye koloba yango. \v 11 Mikolo nyonso, Maridoshe azalaki koleka liboso ya lopango ya ndako ya basi ya mokonzi mpo na kozwa basango ya Ester mpe koyeba ndenge nini bazalaki kobatela ye. \p \v 12 Kolanda ndenge ekatamaki, liboso ete elenge mwasi nyonso akende kokutana na mokonzi Kizerisesi, basengelaki kosala sanza zomi na mibale mpo na kobongisa ye mpo ete akoma kitoko : sanza motoba na mafuta ya mire, mpe sanza motoba mosusu na biloko ya monzele. \p \v 13 Tala ndenge elenge mwasi nyonso oyo azalaki kokende epai ya mokonzi azalaki : Wuta na ndako ya basi ya mokonzi kino na ndako ya mokonzi, bazalaki kopesa ye eloko nyonso oyo azalaki na yango na bosenga. \v 14 Boye elenge mwasi azalaki kokende epai ya mokonzi na pokwa ; mpe na tongo ya mokolo oyo ezalaki kolanda, azalaki kokende na ndako mosusu ya basi ya mokonzi, oyo Shashigazi azalaki kokamba. Shashigazi azalaki kalaka ya lokumu mpo na mokonzi, baboma ye mokongo mpe azalaki na mokumba ya kobatela bamakangu ya mokonzi. Elenge mwasi azalaki lisusu te kozonga liboso ya mokonzi, longola kaka soki mokonzi ayoki posa na ye mpe abengisi ye na kombo. \s1 Ester akomi mwasi ya mokonzi \p \v 15 Tango ekomaki ngala ya Ester ya kokende epai ya mokonzi ; Ester, mwana mwasi ya Abiyaili, noko ya Maridoshe oyo abokolaki Ester, amemaki eloko mosusu te, bobele oyo Ege, kalaka ya lokumu, oyo baboma ye mokongo mpe azalaki na kobatela ndako ya basi ya mokonzi, ayebisaki ye. Mpe Ester azwaki ngolu na miso ya moto nyonso oyo azalaki komona ye. \v 16 Ezalaki na sanza ya zomi, sanza ya Tebeti, na mobu ya sambo ya bokonzi ya Kizerisesi nde bamemaki Ester liboso ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi. \p \v 17 Mokonzi alingaki Ester makasi koleka basi nyonso. Ester azwaki ngolu mpe andimamaki na miso ya mokonzi koleka bilenge basi mosusu. Bongo mokonzi atiaki motole ya bokonzi na moto ya Ester mpe akomisaki ye mwasi ya mokonzi na esika ya Vasti. \v 18 Mokonzi alambisaki biloko ebele mpo na lokumu ya Ester mpe mpo na kosepela elongo na basali na ye nyonso mpe bakalaka na ye. Akataki lisusu ete, na mokolo wana, bituka nyonso efuta mpako te mpe akabolaki bakado na motema ya esengo. \s1 Maridoshe abikisi mokonzi \p \v 19 Tango basangisaki bilenge basi na mbala ya mibale, Maridoshe avandaki na ekuke ya mokonzi. \v 20 Kasi Ester atikalaki te koloba libota na ye to mpe ekolo na ye, ndenge kaka Maridoshe ayebisaki ye ete aloba yango te. Ester azalaki kokoba kobatela toli ya Maridoshe, ndenge kaka azalaki kosala na tango Maridoshe azalaki kobokola ye. \p \v 21 Tango Maridoshe avandaki na ekuke ya mokonzi, Bigitani mpe Tereshi, basoda mibale oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kobatela ekuke ya mokonzi, batombokaki mpe balukaki koboma mokonzi Kizerisesi. \v 22 Kasi Maridoshe asosolaki makanisi na bango mpe ayebisaki yango epai ya Ester, mwasi ya mokonzi, oyo mpe ayebisaki yango epai ya mokonzi na kombo ya Maridoshe. \v 23 Bongo sima na bango koluka koyeba bosolo ya likambo yango, emonanaki ete ezali likambo ya solo. Boye badiembikaki basoda nyonso mibale na nzete mpe bakomaki makambo nyonso wana kati na buku ya masolo, na miso ya mokonzi. \c 3 \s1 Amani akani koboma Bayuda \p \v 1 Sima na makambo oyo, mokonzi Kizerisesi apesaki lokumu epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi ; atombolaki ye mpe atiaki ye likolo ya bakalaka nyonso. \v 2 Bakalaka nyonso oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi bakomaki kofukama mpe kopesa Amani lokumu, pamba te mokonzi atindaki ete basala bongo mpo na ye. Kasi Maridoshe azalaki kofukamela ye te mpe azalaki kopesa ye lokumu te. \p \v 3 Bakalaka oyo bazalaki kosala na ndako ya mokonzi batunaki Maridoshe : \pi1 — Mpo na nini otosaka mitindo ya mokonzi te ? \p \v 4 Bazalaki koloba na ye bongo mikolo nyonso, kasi Maridoshe azalaki kaka koboya koyoka bango. Boye, bayebisaki Amani makambo yango mpo na koyeba soki ezaleli ya Maridoshe ekondimama mpe soki akokangama kaka na maloba na ye, pamba te ayebisaki bango ete azali Moyuda. \v 5 Tango Amani asosolaki ete Maridoshe afukamelaka ye te mpe apesaka ye lokumu te, asilikaki makasi. \v 6 Nzokande Amani asilaki koyoka ete Maridoshe azali Moyuda. Boye amonaki ete likanisi ya koboma kaka Maridoshe ekoki te ; alukaki nzela ya koboma Bayuda nyonso, bato ya Maridoshe, kati na mokili mobimba ya mokonzi Kizerisesi. \p \v 7 Na sanza ya liboso, sanza ya Nisani, na mobu ya zomi na mibale ya Mokonzi Kizerisesi, babetaki zeke oyo babengaka « Puri » liboso ya Amani mpo na kopona mokolo mpe sanza ya koboma Bayuda. Bongo zeke ekweyaki na sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari. \v 8 Amani alobaki na mokonzi Kizerisesi : \pi1 — Ezali na bato moko oyo bakeseni na bato mosusu, bapanzani kati na bato mpe kati na bituka nyonso ya mokili na yo ya bokonzi ; bizaleli na bango ekeseni na bizaleli ya bato mosusu, bongo batosaka mibeko ya mokonzi te ; ezali malamu te mpo na mokonzi kotika bango na kimia. \v 9 Soki esepelisi mokonzi, tika ete abimisa mobeko ya koboma bango ; mpe ngai nakopesa na maboko ya bakalaka oyo batalaka makambo ya mokonzi mbongo ya bibende ya palata nkoto zomi mpo ete batia yango kati na libenga ya mokonzi. \p \v 10 Mokonzi alongolaki lopete na ye na mosapi na ye mpe apesaki yango epai ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi, monguna ya Bayuda. \v 11 Mokonzi alobaki na Amani : \pi1 — Bomba palata na yo ! Sala nyonso oyo olingi epai ya bato yango. \p \v 12 Boye, na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya liboso, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi ; mpe na mitindo ya Amani, bakomaki mitindo nyonso ya Amani epai ya bakalaka ya lokumu ya mokonzi, epai ya bayangeli ya etuka moko na moko mpe epai ya bakalaka ya ekolo moko na moko, kolanda lolenge ya kokoma ya etuka moko na moko mpe lokota ya ekolo moko na moko. Bakomaki yango na kombo ya mokonzi Kizerisesi mpe babetaki yango kashe ya mokonzi. \v 13 Bongo mikanda yango etindamaki na bituka nyonso ya mokonzi, na nzela ya bantoma, mpo na kobebisa, koboma mpe kolimwisa Bayuda nyonso, bilenge mpe mikolo, bana mpe basi, kaka na mokolo moko, mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari ; mpe kobotola na makasi biloko na bango. \v 14 Basengelaki kopanza kati na bituka nyonso sango ya mobeko yango mpe kolakisa yango na bato ya bikolo nyonso mpo ete babongama mpo na mokolo wana. \p \v 15 Boye, na mitindo ya mokonzi, bantoma bakendeki na lombangu mpe bapanzaki kati na Size, engumba mokonzi, sango ya mobeko ya mokonzi. Wana mokonzi mpe Amani bavandaki mpo na komela masanga, engumba Size ezalaki kati na matanga. \c 4 \s1 Maridoshe asengi lisungi epai ya Ester \p \v 1 Tango Maridoshe ayokaki makambo nyonso oyo elekaki, apasolaki bilamba na ye ; alataki saki, amipakolaki putulu mpe atambolaki kati na engumba na koganga makasi mpe na mawa. \v 2 Bongo akendeki kino na liboso ya ekuke ya ndako ya mokonzi ; pamba te moto moko te, wana alati saki lokola elamba, azalaki na ndingisa ya kokota na ekuke ya mokonzi. \p \v 3 Kati na bituka nyonso epai wapi mitindo mpe mobeko ya mokonzi ezalaki kokoma, matanga monene ezalaki kati na Bayuda : bazalaki kokila bilei, kolela mpe koganga ya mawa ; ebele bazalaki komitanda na basaki mpe na putulu. \p \v 4 Tango basi bawumbu ya Ester, mwasi ya Mokonzi, mpe basoda na ye, oyo baboma bango mokongo, bayebisaki Ester makambo oyo Maridoshe asalaki, Ester amitungisaki makasi. Atindelaki Maridoshe bilamba mpo ete alata yango mpe alongola basaki oyo alataki, kasi Maridoshe aboyaki. \v 5 Ester abengisaki Ataki, moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo baboma mokongo mpe mokonzi aponaki mpo na kosalela Ester ; atindaki ye mpo na koyeba likambo oyo ezali kotungisa Maridoshe mpe tina nini azali komitungisa. \v 6 Boye Ataki akendeki epai ya Maridoshe na etando ya engumba, epai wapi bato ebele bakutanaka, liboso ya ekuke ya ndako ya mokonzi. \v 7 Maridoshe ayebisaki ye makambo nyonso oyo ekomelaki ye, ata motuya ya mbongo oyo Amani alakaki kopesa na libenga ya bomengo ya mokonzi mpo ete baboma Bayuda. \v 8 Maridoshe apesaki lisusu Ataki mokanda ya mobeko oyo mokonzi abimisaki, mpo ete ye Ataki alakisa yango epai ya Ester, alimbolela ye yango mpe akomisa epai ya Ester mitindo na ye ete Ester akende epai ya mokonzi mpo na kotungisa ye mpe kobondela mawa ya mokonzi mpo na bato na ye Ester ; pamba te mokonzi asili kobimisa mobeko ya koboma Bayuda mpe sango na yango esili kopanzana kati na engumba Size. \p \v 9 Tango Ataki azongaki mpe ayebisaki Ester makambo oyo Maridoshe alobaki, \v 10 Ester atindaki lisusu Ataki koloba na Maridoshe : \pi1 \v 11 — Bakalaka nyonso ya mokonzi mpe bato ya bituka nyonso ya mokili ya mokonzi bayebi ete, kolanda mobeko, moto nyonso, azala mobali to mwasi, oyo akoti na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi asengeli na kufa soki mokonzi abengisi ye te ; mpe mobeko yango ezali kaka moko mpo na bato nyonso. Nzokande soki mokonzi asemboli epai ya moto yango lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, akotikala na bomoi. Ngai sik’oyo, eleki mikolo tuku misato wuta babenga ngai mpo na kokende epai ya mokonzi ; wuta mikolo wana, babenga ngai lisusu te. \p \v 12 Tango bayebisaki Maridoshe makambo oyo Ester alobaki, \v 13 Maridoshe azongiselaki Ester : \pi1 — Kokanisa te ete lokola ozali kati na ndako ya mokonzi, yo moko kaka nde okobika kati na Bayuda nyonso. \v 14 Pamba te soki yo okangi monoko na yo mpe olobi eloko moko te na tango oyo, lisungi mpe lobiko mpo na Bayuda ekowuta na esika mosusu ; kasi yo mpe libota ya botata na yo, bokokufa. Kutu, nani ayebi soki tango mosusu ezali mpo na makambo ya boye nde okomaki na ndako ya mokonzi ? \p \v 15 Ester atindelaki Maridoshe eyano oyo : \pi1 \v 16 — Kende kosangisa Bayuda nyonso oyo bazali na engumba Size. Bokila bilei mikolo misato mpo na ngai ; butu mpe moyi, bolia mpe bomela eloko te. Ngai mpe nakokila bilei elongo na basi bawumbu na ngai ndenge moko na bino. Sima na yango kaka nde nakokende epai ya mokonzi atako nakobuka mobeko. Soki mpe nakokufa, nakufa kaka ! \p \v 17 Maridoshe akendeki mpe asalaki makambo nyonso oyo Ester atindaki ye. \c 5 \s1 Ester akoti epai ya mokonzi \p \v 1 Na mokolo ya misato ya kokila bilei, Ester alataki bilamba na ye ya bokonzi mpe akotaki na lopango ya kati ya ndako ya mokonzi, liboso ya shambre na ye. Mokonzi azalaki ya kovanda na kiti na ye ya bokonzi kati na shambre oyo ezalaki kotalana na ekuke ya kokotela. \v 2 Tango mokonzi amonaki Ester, mwasi na ye, atelemi kati na lopango, asalelaki ye ngolu. Mokonzi asembolaki epai ya Ester lingenda ya wolo ya bokonzi na ye, oyo ezalaki na loboko na ye. Ester apusanaki mpe asimbaki songe ya lingenda ya bokonzi. \v 3 Mokonzi atunaki ye : \pi1 — Ester, mwasi ya mokonzi, likambo nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Nazali pene ya kopesa yo ata kati-kati ya bokonzi na ngai ! \p \v 4 Ester azongisaki : \pi1 — Oh soki esepelisi mokonzi, tika ete mokonzi akoka koya lelo, elongo na Amani, na feti monene oyo nabongisi mpo na ye. \p \v 5 Mokonzi alobaki : \pi1 — Bolukela ngai noki Amani mpo ete tokokisa bosenga ya Ester. \p Boye, mokonzi mpe Amani bakendeki na feti oyo Ester abongisaki. \v 6 Tango bazalaki komela vino, mokonzi atunaki lisusu Ester : \pi1 — Sik’oyo, posa na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. Mpe bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo, ata soki ezali kati-kati ya bokonzi na ngai. \p \v 7 Ester azongisaki : \pi1 — Posa mpe bosenga na ngai ezali boye : \v 8 Soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi mpe soki mokonzi asepeli kokokisa posa mpe bosenga na ngai, tika ete mokonzi mpe Amani bakoka koya lobi na feti oyo nakobongisa mpo na bango ; bongo nde nakopesa eyano na motuna ya mokonzi. \s1 Amani akani koboma Maridoshe \p \v 9 Amani abimaki na esengo mpe na nsayi. Kasi tango Amani amonaki Maridoshe na ekuke ya mokonzi mpe asosolaki ete Maridoshe atelemi te mpe azali kolenga te liboso na ye, Amani asilikelaki Maridoshe makasi. \v 10 Kasi atako bongo, Amani akangaki motema mpe azongaki epai na ye ; abengisaki balingami na ye mpe Zereshi, mwasi na ye. \v 11 Amani abetelaki bango lisolo ya bomengo na ye oyo ezalaki penza ebele, motango ya bana na ye mpe makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala mpo na kopesa ye lokumu mpe ndenge nini atombolaki ye likolo ya bakambi mpe bakalaka mosusu. \p \v 12 Amani abakisaki : \pi1 — Esuki kaka wana te ! Nazali kaka ngai moko, moto oyo Ester, mwasi ya mokonzi, abengi elongo na mokonzi na feti oyo abongisi. Mpe lobi, abengi ngai lisusu elongo na mokonzi. \v 13 Kasi makambo oyo nyonso ezali kosepelisa ngai te tango nazali komona Moyuda wana Maridoshe kovanda na ekuke ya mokonzi. \p \v 14 Zereshi, mwasi na ye, mpe baninga na ye nyonso balobaki na ye : \pi1 — Telemisa nzete ya bametele pene tuku mibale na mitano na bosanda ; mpe lobi na tongo, okosenga na mokonzi ete badiembika Maridoshe na nzete yango. Bongo okokende na esengo na feti elongo na mokonzi. \p Likanisi oyo esepelisaki Amani, mpe atelemisaki nzete. \c 6 \s1 Mokonzi apesi Maridoshe lokumu \p \v 1 Na butu wana, lokola mokonzi akokaki kolala te, asengaki ete bamemela ye buku ya masolo, masolo ya bokonzi na ye, mpo ete batanga yango liboso na ye. \v 2 Emonanaki ete bakomaki boye kati na yango : Maridoshe afundaki Bigitani mpe Tereshi, basoda mibale oyo baboma bango mokongo mpe bazalaki kokengela ekuke ya mokonzi, oyo basalaki likita mpo na koboma mokonzi Kizerisesi. \p \v 3 Mokonzi atunaki : \pi1 — Lokumu mpe lifuti nini Maridoshe azwaki mpo na yango ? \p Basali na ye bazongisaki : \pi1 — Basala ata eloko moko te mpo na ye. \p \v 4 Mokonzi atunaki : \pi1 — Nani azali kati na lopango ? \p Nzokande Amani awutaki kokota na lopango ya libanda ya ndako ya mokonzi mpo na kosolola na ye mpo ete badiembika Maridoshe na nzete oyo atelemisaki mpo na ye. \p \v 5 Basali ya mokonzi bazongisaki : \pi1 — Ezali Amani nde azali kati na lopango. \p Mokonzi alobaki : \pi1 — Bokotisa ye. \p \v 6 Tango Amani akotaki, mokonzi atunaki ye : \pi1 — Tokoki kosala nini mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu ? \p Amani amilobelaki : « Nani lisusu oyo mokonzi akoki kopesa lokumu soki ngai te ? » \p \v 7 Amani azongiselaki mokonzi : \pi1 — Mpo na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu, \v 8 tika ete bamema nzambala ya bokonzi oyo mokonzi alataka elongo na mpunda oyo mokonzi amataka mpe batia motole ya bokonzi na moto ya mpunda yango. \v 9 Tika ete bapesa nzambala mpe mpunda yango epai ya kalaka oyo aleki na lokumu kati na bakalaka ya mokonzi, mpe tika ete balatisa nzambala na moto oyo mokonzi alingi kopesa lokumu, mpe tika ete batambolisa ye likolo ya mpunda na balabala ya engumba na kotatola liboso na ye : « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo ye alingi kopesa lokumu ! » \p \v 10 Mokonzi alobaki na Amani : \pi1 — Kende noki koluka nzambala mpe mpunda ndenge olobi, mpe sala yango mpo na Moyuda Maridoshe oyo asalaka mosala na ye na ekuke ya mokonzi. Kati na makambo nyonso oyo osili koloba, kotika ata eloko moko te. \p \v 11 Amani azwaki nzambala mpe mpunda, alatisaki Maridoshe nzambala yango mpe atambolisaki ye likolo ya mpunda na balabala nyonso ya engumba na kotatola liboso na ye : « Tala makambo oyo mokonzi asali mpo na moto oyo alingi kopesa lokumu ! » \p \v 12 Sima, Maridoshe azongaki na ekuke ya mokonzi ; kasi Amani azongaki noki na ndako na ye, na soni mpe azipa moto na ye. \v 13 Amani ayebisaki mwasi na ye, Zereshi, mpe baninga na ye nyonso makambo oyo ekomelaki ye. Bapesi toli na ye mpe mwasi na ye, Zereshi, balobaki na ye : \pi1 — Lokola kokweyisama na yo ebandi liboso ya Maridoshe oyo azali Moyuda, okokoka kolonga ye te ; solo penza, okokweyisama lisusu na se koleka ! \p \v 14 Wana bazalaki nanu kosolola na ye, basoda ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, bayaki mpe bamemaki Amani na lombangu na feti oyo Ester abongisaki. \c 7 \s1 Badiembiki Amani \p \v 1 Mokonzi mpe Amani bakendeki mpe bakomaki na feti oyo Ester, mwasi ya mokonzi, abongisaki. \v 2 Mpe wana bazalaki komela vino na mokolo oyo ya mibale, mokonzi atunaki lisusu Ester : \pi1 — Ester, mwasi ya mokonzi, bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. Posa na yo ezali nini ? Ekopesamela yo, ata soki ezali koleka kati-kati ya mokili na ngai ya bokonzi. \p \v 3 Ester, mwasi ya mokonzi, azongisaki : \pi1 — Ah mokonzi ! Soki nazwi ngolu na miso na yo, mpe soki yango esepelisi yo mokonzi, tika ete opesa ngai bomoi na ngai ; yango nde ezali bosenga na ngai. Mpe lisusu, tika ete obatela bato na ngai ; yango nde ezali bosenga na ngai. \v 4 Pamba te ngai mpe bato na ngai, tosili kotekama mpo ete babebisa biso, baboma biso mpe balimwisa biso ! Soki ata batekaki biso mpo ete tozala bawumbu ya basi to ya mibali, nalingaki na ngai kovanda kimia ; pamba te pasi ata moko te ya lolenge oyo ekokaki kotinda ngai ete natungisa mokonzi ! \p \v 5 Mokonzi Kizerisesi atunaki Ester, mwasi ya mokonzi : \pi1 — Moto yango nani oyo ameki kobongisa likambo ya boye ? Azali wapi ? \p \v 6 Ester azongiselaki ye : \pi1 — Monyokoli mpe monguna ! Ezali Amani, moto oyo ya pasi ! \p Amani abangaki makasi liboso ya mokonzi mpe ya mwasi ya mokonzi. \v 7 Mokonzi atelemaki na kanda makasi, atikaki vino na ye mpe abimaki na elanga ya ndako ya mokonzi. Tango Amani asosolaki ete mokonzi asili kokata etumbu na ye, atikalaki wana mpo na kobondela Ester, mwasi ya mokonzi, mpo ete abikisa bomoi na ye. \v 8 Tango kaka mokonzi azongaki na esika oyo basalelaki feti longwa na elanga ya ndako ya mokonzi, Amani amikweyisaki na kiti monene oyo Ester, mwasi ya mokonzi, ayekamaki. \p Mokonzi agangaki : \pi1 — Eh ! Alingi lisusu kotungisa mwasi ya mokonzi na miso na ngai kati na ndako na ngai ? \p Tango kaka mokonzi asilisaki koloba, bazipaki elongi ya Amani. \v 9 Bongo Aribona, moko kati na basoda oyo baboma bango mokongo, alobaki liboso ya mokonzi : \pi1 — Ezali na nzete moko oyo Amani atelemisaki mpo na Maridoshe, oyo alobaki makambo mpo na bolamu ya mokonzi ! Ezali kati na lopango ya Amani mpe ezali na bametele tuku mibale na mitano na bosanda ! \p Mokonzi apesaki mitindo : \pi1 — Bodiembika ye moko kuna ! \p \v 10 Boye badiembikaki Amani na nzete oyo atelemisaki mpo na Maridoshe. Mpe kanda ya mokonzi ekitaki. \c 8 \s1 Mibeko ya sika ya mokonzi mpo na Bayuda \p \v 1 Kaka na mokolo yango, mokonzi Kizerisesi apesaki Ester, mwasi ya mokonzi, biloko ya Amani, monguna ya Bayuda. Mpe lokola Ester ayebisaki mokonzi ete Maridoshe azali ndeko na ye, mokonzi abengaki Maridoshe mpe Maridoshe akendeki liboso ya mokonzi. \v 2 Mokonzi alongolaki lopete na ye oyo abotolaki epai ya Amani mpe apesaki yango epai ya Maridoshe. Bongo Ester atiaki Maridoshe mokambi ya biloko ya Amani. \p \v 3 Ester alobaki lisusu na mokonzi ; amibwakaki na makolo na ye mpe abondelaki ye na kolela ete asukisa mikano mabe ya Amani, moto ya Agagi, mpe mabongisi na ye ya koboma Bayuda. \v 4 Mokonzi asembolaki lingenda ya wolo ya bokonzi na ye epai ya Ester. Bongo Ester alamukaki mpe atelemaki liboso na ye. \p \v 5 Ester alobaki : \pi1 — Soki esepelisi mokonzi, soki nazwi ngolu na miso ya mokonzi, soki akanisi ete ezali sembo mpo na ye kosala mpe soki asepeli na ngai, tika ete mobeko ekomama mpo na kokweyisa mikano ya Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya Agagi, oyo ebongisamaki mpe ekomamaki mpo na koboma Bayuda kati na bituka nyonso ya mokonzi. \v 6 Ndenge nini ngai nakoki komona pasi kokweyela bato na ngai to komona kobebisama ya libota na ngai ? \p \v 7 Mokonzi Kizerisesi azongiselaki Ester, mwasi na ye, mpe Maridoshe, Moyuda : \pi1 — Lokola Amani abundisaki Bayuda, ngai napesi ndako na ye epai ya Ester ; mpe napesi mitindo mpo ete badiembika ye na nzete. \v 8 Sik’oyo, koma mobeko mosusu na tina na Bayuda, na kombo ya mokonzi, ndenge okomona malamu mpe beta yango kashe ya mokonzi ; pamba te mokanda oyo ekomami na kombo ya mokonzi mpe babeti yango kashe na ye ekoki kobongwana te. \p \v 9 Na tango wana kaka, na mokolo ya tuku mibale na misato ya sanza ya misato, sanza ya Sivani\f + \fr 8.9 \fr*\ft Sivani ezali sanza ya misato na manaka ya Bayuda.\ft*\f*, babengisaki bakomi mikanda ya mokonzi. Makambo nyonso oyo Maridoshe atindaki mpo na Bayuda, bakomelaki yango bayangeli ya bituka, bayangeli mpe bakalaka ya bituka nyonso, longwa na Ende kino na Kushi, bituka nkama moko na tuku mibale na sambo, ekolo moko na moko kolanda lokota na yango, etuka moko na moko kolanda ndenge na yango ya kokoma mpe Bayuda kolanda ndenge na bango ya kokoma mpe lokota na bango. \v 10 Maridoshe akomaki mikanda na kombo ya mokonzi Kizerisesi, abetaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango na nzela ya bantoma oyo batambolaka na bampunda ya mbangu, oyo etiama mpo na misala ya mokonzi. \p \v 11 Na nzela ya mobeko yango, mokonzi apesaki Bayuda ya bingumba nyonso ndingisa ya kosangana mpo na komibatela, kobundisa, koboma mpe kobebisa mampinga ya ekolo nyonso to etuka nyonso oyo ekoluka kobundisa bango, basi na bango to bana na bango ; mpe ndingisa ya kobotola na makasi bozwi ya banguna na bango. \v 12 Bongo, mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari, ezalaki mokolo oyo Bayuda bakataki mpo na kokokisa yango kati na bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi. \v 13 Basengelaki kopanza sango ya mokanda wana mpo ete ezalaki na bokonzi ya mobeko kati na etuka moko na moko, mpe basengelaki koyebisa yango na bato ya bikolo nyonso mpo ete Bayuda bakoka kozala ya kobongama na mokolo wana mpo na kozongisela banguna na bango mabe na mabe. \p \v 14 Na etinda ya mokonzi, bantoma oyo batambolaka na mpunda ya mokonzi babimaki na lombangu mpe bapanzaki sango ya mobeko yango kati na engumba Size. \v 15 Maridoshe alongwaki liboso ya mokonzi, na bilamba ya bokonzi ya langi ya ble mpe ya pembe, na motole monene ya wolo mpe na nzambala ya motane makasi ya lino ya kitoko. Engumba mobimba ya Size ezalaki koganga na esengo mpe ezalaki kosepela. \v 16 Ezalaki tango ya kosepela mpe ya esengo, tango ya feti mpe ya lokumu mpo na Bayuda. \v 17 Kati na bituka nyonso, bingumba nyonso mpe bisika nyonso oyo bazwaki sango ya mobeko ya mokonzi, ezalaki tango ya esengo, ya kosepela, ya kolia mpe ya feti kati na Bayuda. Bato ebele ya bikolo mosusu, oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bamikomisaki Bayuda ; pamba te somo ya Bayuda elongaki makanisi na bango. \c 9 \s1 Elonga ya Bayuda \p \v 1 Mokolo ya zomi na misato ya sanza ya zomi na mibale, sanza ya Adari, mokolo oyo mobeko ya mokonzi esengelaki kokokisama, ekokaki. Ezalaki mokolo oyo banguna ya Bayuda bakanisaki ete bakokonza Bayuda ; nzokande makambo ebongwanaki mpe Bayuda bakomaki kokonza bato oyo bazalaki koyina bango. \v 2 Kati na bingumba na bango, kati na bituka nyonso ya mokonzi Kizerisesi, Bayuda basanganaki mpo na kobundisa bato nyonso oyo bolukaki kobebisama na bango. Ekolo moko te ezalaki na makoki ya kotelemela bango, pamba te bato ya bikolo nyonso mosusu oyo bazalaki elongo na bango kati na mboka bazalaki na somo na bango. \v 3 Bakalaka nyonso ya bituka, bayangeli ya bituka oyo mokonzi atiaki, bayangeli mpe bakalaka ya mokonzi basungaki Bayuda, pamba te bazalaki na somo monene ya Maridoshe. \v 4 Maridoshe akomaki moto monene kati na ndako ya mokonzi : lokumu na ye epanzanaki kati na bituka nyonso, pamba te nguya na ye ezalaki komata se komata, mokolo na mokolo. \p \v 5 Bayuda babebisaki banguna na bango nyonso na mopanga, babomaki bango mpe babebisaki bango ; basalaki bato oyo bazalaki koyina bango makambo nyonso oyo basepelaki kosala. \v 6 Kaka na engumba Size, Bayuda babomaki mpe babebisaki bato nkama mitano. \v 7 Babomaki mpe lisusu Parishandata, Dalifoni, Asipata ; \v 8 Porata, Adalia mpe Aridata ; \v 9 Parimashita, Arizayi, Aridayi mpe Vayezata ; \v 10 bana mibali zomi ya Amani, mwana mobali ya Amedata, monguna na Bayuda, kasi batikalaki te kozwa bomengo ya bitumba. \p \v 11 Kaka na mokolo wana, bayebisaki mokonzi motango ya bato oyo babomaki kati na engumba Size. \p \v 12 Mokonzi alobaki na Ester, mwasi ya mokonzi : \pi1 — Kati na engumba Size, Bayuda babomi mpe babebisi bato nkama mitano elongo na bana mibali zomi ya Amani. Basali nini kati na bituka mosusu ya mokonzi ? Sik’oyo, posa na yo ezali nini ? Bosenga na yo ezali nini ? Ekopesamela yo. \p \v 13 Ester azongisaki : \pi1 — Soki mokonzi asepeli, tika ete Bayuda oyo bazali kati na engumba Size bazwa lisusu ndingisa ya kokokisa lobi, mobeko ya mokonzi ndenge esalemi lelo mpe badiembika na nzete, bana mibali zomi ya Amani. \p \v 14 Mokonzi apesaki ndingisa ete esalema bongo. Bapanzaki sango ya mobeko yango na engumba Size mpe badiembikaki bana mibali zomi ya Amani. \v 15 Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na minei, ya sanza ya Adari, mpe bobomaki bato nkama misato ; kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te. \p \v 16 Bayuda mosusu oyo bazalaki kovanda kati na bituka ya mokonzi, bango mpe basanganaki mpo na komibatela mpe bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango. \v 17 Na mokolo ya zomi na misato ya sanza ya Adari, babomaki bato nkoto tuku sambo na mitano kati na banguna na bango, kasi batikalaki kozwa bomengo ya bitumba te. Bongo na mokolo ya zomi na minei, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo. \p \v 18 Nzokande, Bayuda oyo bazalaki kovanda kati na engumba Size basanganaki na mokolo ya zomi na misato mpe ya zomi na minei ; bongo na mokolo ya zomi na mitano, bapemaki mpe bakomisaki yango mokolo ya feti mpe ya esengo. \v 19 Yango wana Bayuda oyo bavandaka na bingumba ezanga bamir bakomisa mokolo ya zomi na minei ya sanza ya Adari, mokolo ya esengo mpe ya feti, mokolo oyo bakabelanaka bakado kati na bango. \s1 Feti ya Purimi \p \v 20 Maridoshe akomaki makambo oyo nyonso mpe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kati na bituka ya mokonzi Kizerisesi, epai ya ba-oyo bazalaki pene mpe epai ya ba-oyo bazalaki mosika \v 21 ete basalaka feti na mibu nyonso, na mokolo ya zomi na minei mpe ya zomi na mitano ya sanza ya Adari, \v 22 mpo ete ezali na mikolo oyo nde Bayuda bazwaki bopemi liboso ya banguna na bango, na sanza oyo nde mawa na bango ebongwanaki esengo mpe kolela na bango ekomaki feti. Akomelaki bango mpo ete bakomisa mikolo oyo, mikolo ya feti mpe ya esengo ; mikolo ya kopesana bango na bango bakado ya biloko ya kolia mpe ya kopesa bakado epai ya babola. \p \v 23 Bayuda bandimaki kokoba kosala feti oyo mpe bakomaki kosala makambo oyo Maridoshe akomelaki bango. \v 24 Pamba te Amani, mwana mobali ya Amedata, moto ya mboka Agagi, monguna ya Bayuda nyonso, asalelaki Bayuda likita mpo na kobebisa bango ; abetaki Puri, oyo ezali « zeke, » mpo na kufa mpe libebi na bango. \v 25 Kasi tango mokonzi ayokaki sango ya likita ya Amani, akomaki mobeko kati na mokanda mpo ete makanisi mabe oyo Amani abongisaki mpo na Bayuda ekweya na moto na ye moko mpe, lisusu, badiembika ye elongo na bana na ye ya mibali, na nzete. \v 26 Yango wana babengaka mokolo yango Purimi (ewuti na kombo Puri oyo elakisi zeke). Mpo na makambo nyonso oyo Maridoshe akomaki na mokanda, mpo na makambo nyonso oyo bamonaki mpe makambo nyonso oyo ekomelaki bango, \v 27 Bayuda bakataki mpe bandimaki ete yango ekoma ezaleli mpo na bango, ezaleli ya bakitani na bango mpe ya bato nyonso oyo bakosangana na bango, mpo ete batosaka kosala feti ya mikolo oyo mibale, na mibu nyonso, ndenge ekatama na tango na yango. \v 28 Milongo nyonso mpe mabota nyonso ekosala feti na mikolo oyo kati na bituka nyonso mpe bingumba nyonso. Bayuda bakoki kotika te kosala feti na mikolo ya Purimi, mpe ekaniseli na yango ekoki kolimwa te kati na bakitani na bango. \p \v 29 Boye, Ester, mwasi ya mokonzi, mwana mwasi ya Abiyaili, elongo na Moyuda Maridoshe, basalelaki bokonzi na bango mpe bakomaki mokanda mosusu mpo na kolendisa makambo oyo etali Purimi. \v 30 Maridoshe atindaki mikanda epai ya Bayuda nyonso oyo bazalaki kovanda kati na bituka nyonso nkama moko na tuku mibale na sambo ya mokili ya Kizerisesi, mpe mikanda yango ezalaki na maloba ya kimia mpe ya elikya \v 31 mpo na kobeta sete na tina na mikolo oyo ya Purimi ete Bayuda basengeli kosala Purimi yango na mikolo na yango oyo ekatama kolanda mokano ya Moyuda Maridoshe mpe Ester, mwasi ya mokonzi ; mpe ndenge Bayuda bakataki yango mpo na bango moko mpe mpo na bakitani na bango lokola tango na bango ya kokila bilei mpe ya bileli. \v 32 Mitindo ya Ester elendisaki mibeko mpo na Purimi mpe ekomamaki na buku. \c 10 \s1 Lokumu ya Maridoshe \p \v 1 Mokonzi Kizerisesi akataki mpako mpo na bato ya mokili na ye ya bokonzi kino na bituka oyo ezalaki pene ya ebale. \p \v 2 Bongo misala nyonso ya bokonzi mpe ya nguya na ye, elongo na makambo nyonso ya lokumu ya Maridoshe oyo mokonzi atombolaki, ekomamaki kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Medi mpe ya Persi. \p \v 3 Moyuda Maridoshe azalaki moto ya mibale kati na bokonzi sima na mokonzi Kizerisesi. Maridoshe azalaki moto monene mpe ya lokumu na miso ya Bayuda, bandeko na ye ; pamba te azalaki koluka bolamu ya bato na ye mpe kobundela bolamu ya Bayuda nyonso.