\id EPH Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Ba-Efeso \toc1 Mokanda epai ya Ba-Efeso \toc2 Ba-Efeso \toc3 Ef \mt2 Mokanda epai ya \mt1 Ba-Efeso \c 1 \s1 Ebandeli ya mokanda \m \v 1 Polo, ntoma ya Yesu-Klisto, kolanda mokano ya Nzambe ; \b \mi Epai ya basantu mpe bandimi ya Yesu-Klisto, oyo bazali kati na Efeso : \b \m \v 2 Tika ete ngolu mpe kimia epesamela bino kowuta na Nzambe, Tata na biso, mpe na Nkolo Yesu-Klisto ! \b \ms1 Lobiko kati na Klisto \s1 Ngolu ya Nzambe kati na Klisto \q1 \v 3 Tika ete lokumu epesamela \q2 Nzambe mpe Tata ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, \q1 oyo apesi biso kati na bisika ya Likolo, \q2 mapamboli nyonso ya Molimo kati na Klisto. \q1 \v 4 Pamba te, kati na Klisto, \q2 apona biso liboso ete akela mokili, \q1 mpo ete tozala bato ya bule \q2 mpe bazanga pamela na miso na Ye. \q1 Kati na bolingo na Ye, \q1 \v 5 abongisa biso wuta kala \q2 mpo ete tozwa makoki ya kokoma bana na Ye \q1 na nzela ya Yesu-Klisto, \q2 kolanda bolamu mpe mokano na Ye moko, \q1 \v 6 mpo ete tosanzola nkembo ya ngolu na Ye, \q2 oyo akabeli biso kati na Molingami na Ye. \q1 \v 7 Kati na Klisto, \q2 tozwi lisiko na nzela ya makila na Ye, \q1 mpe bolimbisi ya masumu, \q2 kolanda bomengo ya ngolu ya Nzambe \q1 \v 8 oyo akabolelaki biso yango na bofuluki, \q2 na kopesa biso bwanya mpe bososoli nyonso, \q1 \v 9 mpe na kolakisa biso mabombami ya mokano na Ye, \q2 mabombami oyo abongisa kati na Klisto \q2 kolanda bolamu na Ye, \q1 \v 10 mpo na kokokisa yango na tango ya suka : \q2 kosangisa kati na Klisto \q1 bikelamu nyonso oyo ezali kati na Likolo \q2 mpe oyo ezali na mabele. \q1 \v 11 Kati na Klisto, \q2 Nzambe aponaki biso lisusu \q1 mpo ete tokitana na libula na biso, \q2 kolanda mabongisi ya Ye oyo akokisaka nyonso, \q2 kolanda makanisi ya mokano na Ye, \q1 \v 12 mpo ete tosanzola nkembo na Ye, \q2 biso ba-oyo tozalaki bato ya liboso \q2 mpo na kotia elikya na biso kati na Klisto. \q1 \v 13 Bino mpe, sima na bino koyoka Liloba ya solo, \q2 Sango Malamu ya lobiko na bino, bondimelaki Klisto ; \q1 mpe Nzambe apesaki bino Molimo Mosantu oyo alakaki \q2 mpe, na nzela ya Molimo yango, abetaki bino kashe \q1 \v 14 lokola ndanga ya libula na biso \q2 kino basikolami na Ye bakangolama \q2 mpo na kosanzola nkembo na Ye. \s1 Polo abondeli mpo na bato ya Efeso \p \v 15 Yango wana, wuta tango nayokaki sango ya kondima na bino kati na Nkolo Yesu mpe bolingo na bino mpo na basantu nyonso, \v 16 nazongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe mpo na bino, nakanisaka bino na mabondeli na ngai \v 17 mpe nasengaka ete Nzambe ya Yesu-Klisto, Nkolo na biso, Tata ya nkembo, apesa bino Molimo ya bwanya mpe ya emoniseli mpo ete bokoka koyeba Ye malamu. \v 18 Nasambelaka ete angengisa miso ya mitema na bino mpo ete bokoka kososola elikya oyo ezali kati na kobengama na bino, bomengo ya nkembo ya libula na Ye, oyo akopesa bino elongo na basantu, \v 19 mpe monene makasi ya nguya na Ye mpo na biso oyo tozali na kondima. Abimisaki nguya yango na makasi na yango nyonso \v 20 mpe asalelaki yango kati na Klisto tango asekwisaki Ye kati na bakufi mpe avandisaki Ye na ngambo ya loboko na Ye ya mobali kati na Likolo, \v 21 na likolo ya milimo nyonso, ya bokonzi nyonso, ya nguya nyonso, ya bokasi nyonso, mpe ya kombo nyonso oyo bato bakoki kotanga, na tango oyo kaka te kasi mpe na tango oyo ekoya. \v 22 Nzambe atia nyonso na se ya matambe ya Yesu mpe apona Yesu mpo ete akonza nyonso lokola Mokonzi ya Lingomba \v 23 oyo ezali nzoto na Ye. Nzambe oyo atondisaka nyonso kati na bato nyonso amimonisaka kati na Yesu, na mobimba ya bonzambe na Ye. \c 2 \s1 Bato na bomoi kati na Klisto \p \v 1 Bozalaki bakufi mpo na mabe mpe masumu na bino, \v 2 oyo bozalaki kosala na kala mpo na kobika bomoi na bino tango bozalaki kotambola kolanda baposa ya mokili oyo, mpe tango bozalaki kolanda mokonzi ya milimo mabe, molimo oyo ezali kosala sik’oyo kati na bato oyo bazangi botosi epai ya Nzambe. \p \v 3 Biso nyonso mpe, na kala, tozalaki elongo na bango, tozalaki kotambola kolanda baposa na biso ya nzoto, tozalaki kokokisa nyonso oyo nzoto mpe makanisi na biso ezalaki kotinda biso kosala. Lokola bato mosusu, kanda ya Nzambe esengelaki kokweyela biso mpo na mabe ya bomoto na biso. \p \v 4 Kasi mpo ete Nzambe atondi na mawa mpe alingaki biso na bolingo monene, \v 5 atako tozalaki bakufi mpo na masumu na biso, akomisaki biso bato ya bomoi elongo na Klisto. Bobikisami nde na ngolu… \v 6 Kati na Yesu-Klisto, Nzambe asekwisaki biso elongo na Klisto mpe avandisaki biso elongo na Ye na bisika ya Likolo \v 7 mpo na kotalisa na bato ya bikeke oyo esengeli koya na sima, bomengo monene ya ngolu na Ye, oyo alakisaki kati na Yesu-Klisto na nzela ya boboto na Ye epai na biso. \p \v 8 Pamba te bobikisami nde na ngolu, na nzela ya kondima—mpe yango ewuti na bino te, kasi ezali nde likabo kowuta na Nzambe— \v 9 ezali na nzela ya misala na bino te mpo ete moko te akoka komikumisa. \v 10 Solo, tozali mbuma ya mosala ya Nzambe : Akelaki biso kati na Yesu-Klisto mpo ete tosala misala ya malamu oyo Nzambe abongisa wuta kala mpo ete tokokisa yango. \s1 Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya \p \v 11 Yango wana, bobosanaka te ete na kala, bozalaki Bapagano kolanda mbotama na bino ; mpe bato oyo bamibengaka « bato bakatama ngenga » bazalaki kobenga bino « bato bakatama ngenga te, » atako bazalaki bato bakatama ngenga kati na banzoto na bango na nzela ya mosala ya maboko ya bato. \v 12 Bobosanaka mpe te ete na tango wana, bozalaki ya kokabwana na Klisto, bozangaki makoki ya bana mboka kati na Isalaele, bozalaki bapaya liboso ya boyokani oyo Nzambe alakaki, bozalaki bato bazanga elikya mpe bazanga Nzambe kati na mokili. \v 13 Kasi sik’oyo, kati na Yesu-Klisto, bino oyo na kala bozalaki mosika, bokomi pene na nzela ya mbeka ya makila ya Klisto. \v 14 Solo, azali Ye moko kimia na biso : atiaki bomoko kati na Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, akweyisaki mir ya bonguna oyo ezalaki kokabola bango, \v 15 alongolaki Mobeko elongo na mitindo mpe malako na yango mpo na kokela, kati na Ye moko, moto ya sika na nzela ya Bayuda mpe bato ya bikolo ya bapaya, na kotia kimia, \v 16 mpe mpo na koyokanisa, kati na nzoto se moko, masanga nyonso mibale elongo na Nzambe na nzela ya ekulusu oyo abomaki na yango bonguna oyo ezalaki kati na bango. \v 17 Ayaki mpe ateyaki kimia epai na bino oyo bozalaki mosika, mpe kimia epai na bato oyo bazalaki pene. \v 18 Pamba te na nzela na Ye, biso mpe bango tokotaka epai ya Tata kati na Molimo moko. \p \v 19 Boye bozali lisusu te bapaya to baleki nzela, kasi bozali nde bankolo mboka elongo na basantu, bozali mpe bato ya libota ya Nzambe. \v 20 Nzambe akotisi bino kati na ndako oyo moboko na yango ezali bantoma mpe basakoli, mpe Ye moko Yesu-Klisto azali libanga na yango ya motuya mpo na kosimba ndako mobimba. \v 21 Kati na Yesu-Klisto, ndako mobimba esangani malamu mpe ezali kokola mpo ete ekoma Tempelo ya bule kati na Nkolo. \v 22 Mpe kati na Ye, bino mpe bozali kotongama lisanga mpo ete bokoma Ndako oyo Nzambe avandaka kati na yango na nzela ya Molimo na Ye. \c 3 \s1 Mabongisi kitoko ya Nzambe mpo na Bapagano \p \v 1 Yango wana, ngai Polo, mokangami na boloko mpo ete nazali mosali ya Yesu-Klisto mpo na bolamu na bino Bapagano— \p \v 2 Solo, boyokaki ete Nzambe apesaki ngai mosala ya ngolu na Ye mpo na bino \v 3 mpe ayebisaki ngai mabombami na nzela ya emoniseli, ndenge nasili kokomela bino na mwa maloba. \v 4 Tango bokotanga maloba yango, bokokoka kososola mayele na ngai kati na mabombami yango oyo etali Klisto. \v 5 Molimo ayebisaki mabombami yango te na bato ya bikeke ya kala, ndenge alakisi yango sik’oyo na bantoma mpe basakoli ya Nzambe oyo bazali bule. \p \v 6 Mabombami yango ezali boye : Kati na Yesu-Klisto, na nzela ya Sango Malamu, Bapagano bazali bakitani ya libula elongo na Isalaele, biteni ya nzoto moko, mpe basangani elongo kati na elaka moko. \p \v 7 Kolanda ngolu oyo Nzambe apesaki ngai lokola likabo na nzela ya nguya na Ye, nakoma mosali ya Sango Malamu. \v 8 Atako nazali moto ya suka kati na basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu ya kosakola epai ya Bapagano bomengo monene ya Klisto ; \v 9 apesa ngai mpe ngolu ya kosunga bato nyonso mpo ete basosola ndenge nini Nzambe akokisaka mabombami oyo ezalaki wuta kala ya kobombama kati na Ye, Mokeli na nyonso, \v 10 na tina ete bakonzi ya milimo mpe banguya kati na mboka ya milimo eyeba sik’oyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo emonisamaka na lolenge ebele, \v 11 kolanda mabongisi oyo asala wuta kala mpe akokisa kati na Yesu-Klisto, Nkolo na biso. \p \v 12 Kati na Yesu-Klisto mpe na nzela ya kondima na biso kati na Ye, tozali na elikya ya kopusana na bonsomi nyonso pene ya Nzambe. \v 13 Lisusu, nazali kosenga na bino ete bobungisa mpiko na bino te likolo ya pasi oyo ngai nazali komona mpo na bino, pamba te ezali nde nkembo na bino. \s1 Mabondeli mpo na bato ya Efeso \p \v 14 Yango wana nafukamaka liboso ya Tata \v 15 oyo apesaka bomoi na mabota nyonso kati na Likolo mpe awa na mabele, \v 16 mpo na kobondela ete alendisa bino na nguya, mpo na bolamu ya bomoto na bino ya kati, na nzela ya Molimo na Ye kolanda bomengo ya nkembo na Ye, \v 17 mpo ete Klisto avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozwa misisa mpe bolenda kati na bolingo, \v 18 mpo ete bozwa nguya ya kososola elongo na basantu nyonso monene, molayi, mokuse mpe bozindo ya bolingo ya Klisto, \v 19 mpe mpo ete bozwa nguya ya koyeba bolingo yango ya Klisto, oyo eleki boyebi nyonso, na tina ete botondisama kino na bofuluki nyonso ya Nzambe. \p \v 20 Epai na Ye oyo azali na makoki ya kosala koleka nyonso oyo tokoki kosenga to kokanisa, kolanda nguya na Ye, oyo esalaka kati na biso, \v 21 tika ete nkembo ezala ya Ye kati na Lingomba mpe kati na Yesu-Klisto, mpo na bileko nyonso mpe mpo na libela na libela ! Amen. \c 4 \ms1 Bomoi kati na lisanga ya sika \s1 Kobatela bomoko \p \v 1 Ngai Polo, mokangami na boloko mpo na Nkolo, nazali kosenga na bino ete botambolaka na lolenge oyo ebongi na bato oyo Nzambe abengi : \v 2 bozalaka tango nyonso bato oyo batondi na komikitisa, na boboto mpe na motema molayi ; boyikanaka mpiko kati na bolingo, \v 3 bosalaka makasi mpo na kobatela bomoko ya Molimo na nzela ya kimia oyo esangisi bino. \v 4 Nzoto ezali se moko, Molimo mpe azali se moko, ndenge kaka Nzambe abenga bino na elikya se moko. \p \v 5 Nkolo azali se moko, kondima mpe ezali se moko, libatisi mpe ezali se moko. \v 6 Nzambe azali se moko, azali mpe Tata ya bato nyonso ; aleki bato nyonso, asalaka na nzela ya bato nyonso mpe azali kati na bato nyonso. \p \v 7 Nzokande kati na biso, moto nyonso azwaki ngolu kolanda ndenge Klisto akabolaki. \v 8 Yango wana Nzambe alobi : \q1 « Tango amataki na likolo, \q2 amemaki bakangami \q2 mpe apesaki makabo epai na bato. » \m \v 9 Nzokande, « amataki na likolo » elingi koloba penza nini ? Elingi kaka koloba ete, liboso, akitaki kino na se ya mabele. \v 10 Ye oyo akitaki na se ya mabele, ezali kaka Ye wana oyo amataki na likolo koleka Likolo nyonso, mpo ete atondisa mokili mobimba. \p \v 11 Ezali Ye moko Klisto nde akomisaki bamoko bantoma, bamosusu basakoli, bapanzi Sango Malamu, babateli bibwele mpe balakisi, \v 12 mpo na kopesa na basantu makoki ya kokokisa lotomo na bango, na tina ete nzoto ya Klisto etongama malamu. \p \v 13 Boye, biso nyonso tokokoma na bomoko kati na kondima mpe kati na boyebi ya Mwana na Nzambe, mpe tokokoma bato oyo bakembi kolanda ndenge Klisto azali ya kokoka. \v 14 Na bongo, tokozala lisusu bana mike te oyo bambonge ebwaki-bwaki lokola bwato, mpe oyo lolenge nyonso ya mateya, ya lokuta mpe ya mayele mabe ya bato epumbwisi na mopepe. \p \v 15 Kasi wana tokolobaka bosolo kati na bolingo, tokokolaka na makambo nyonso kati na Klisto oyo azali moto. \p \v 16 Ezali na nguya na Ye nde nzoto mobimba ekolaka mpe emitongaka kati na bolingo, wana esili kokangana malamu mpe kokoma moko na nzela ya misisa oyo epesaka yango bilei, mpo na kopesa na eteni moko na moko nzela ya kosala mosala na yango na ndenge ekoki. \s1 Bomoi kati na Klisto \p \v 17 Boye, tala makambo oyo nazali koyebisa bino mpe kobetela sete kati na Nkolo : Botambolaka lisusu te lokola Bapagano oyo balandaka makanisi na bango, oyo ezanga tina. \v 18 Pamba te molili ezipi mayele na bango mpe bazali ya kokabwana na bomoi ya sika oyo Nzambe apesaka, mpo ete bazangi boyebi mpe bazali mitema mabanga. \v 19 Lokola babungisa bomoto na bango, bamipesaki na makambo ya soni mpo na kosala na lokoso makambo nyonso ya bosoto. \p \v 20 Kasi bino boyekolaki Klisto ndenge wana te, \v 21 soki ya solo ezalaki penza Ye nde boyokaki tango bateyaki bino solo oyo ezali kati na Yesu \v 22 mpo ete bobwaka etamboli na bino ya kala, etamboli ya bomoto na bino ya kala, oyo ebebaka na nzela ya baposa ya lokuta, \v 23 mpo ete Molimo akomisa mayele mpe makanisi na bino ya sika, \v 24 mpe mpo ete bolata bomoto ya sika oyo ekelami kolanda Nzambe, kati na bosembo mpe bosantu ya bosolo. \s1 Bomoi kati na bolingo \p \v 25 Yango wana, tika ete moko na moko kati na bino abwaka lokuta mpe alobaka solo na moninga na ye, pamba te biso nyonso tozali kaka biteni ya nzoto moko. \p \v 26 Soki bosiliki, bosalaka masumu te ; kanda na bino esengeli kosila liboso ete pokwa ekoma. \v 27 Bopesaka na Satana nzela te. \p \v 28 Tika ete moyibi ayiba lisusu te, kasi amipesa nde na mosala ; mpe tika ete maboko na ye esala na bosembo nyonso mpo ete azwa eloko ya kosunga na yango moto oyo azali kati na bosenga. \p \v 29 Tika ete minoko na bino ebimisaka maloba ya mabe te, kasi bolobaka kaka maloba ya boboto, maloba oyo esungaka bato mosusu na kokola kati na kondima, kolanda bosenga na bango, mpe esalaka bolamu na bato oyo bayokaka yango. \p \v 30 Boyokisaka Molimo Mosantu ya Nzambe mawa te ; pamba te, na nzela ya Molimo yango, Nzambe abetaki bino kashe na Ye mpo na mokolo ya kokangolama. \p \v 31 Bolimwisaka kati na bino bololo ya mitema, koyinana, kanda, koswana, mafinga mpe lolenge nyonso ya misala mabe. \v 32 Botalisanaka boboto, boyokelanaka mawa mpe bolimbisanaka ndenge Nzambe alimbisaki bino kati na Klisto. \c 5 \p \v 1 Boye, lokola bozali bana oyo Nzambe alingaka mingi, bomekolaka Ye. \p \v 2 Botambolaka na bolingo, ndenge kaka Klisto alingaki biso mpe amikabaki mpo na biso epai ya Nzambe lokola likabo mpe mbeka ya solo kitoko. \p \v 3 Tika ete kindumba, lolenge nyonso ya makambo ya soni mpe lokoso etangamaka kutu te kati na bino, pamba te ebongi te mpo na basantu. \v 4 Ezali mpe malamu te mpo na bino kobimisaka maloba ya bozoba, ya bosoto mpe ya maseki, kasi ebongi nde kozongisaka matondi. \v 5 Pamba te, boyeba yango malamu, moto nyonso oyo asalaka kindumba, makambo ya soni to atondi na lokoso oyo ekokani na kosambela bikeko, akokota te na Bokonzi ya Klisto mpe ya Nzambe. \s1 Bomoi kati na pole \p \v 6 Tika ete moko te akosa bino na maloba ezanga tina, pamba te ezali mpo na biloko ya ndenge wana nde kanda ya Nzambe ekweyelaka bato oyo batosaka Ye te. \p \v 7 Bosanganaka te elongo na bato wana. \v 8 Na kala, bozalaki molili, kasi sik’oyo bokomi pole kati na Nkolo. Boye, botambolaka lokola bana ya pole, \v 9 pamba te mbuma ya pole ezali : boboto, bosembo, mpe bosolo. \v 10 Bosalaka makasi mpo na kososola makambo oyo esepelisaka Nkolo. \p \v 11 Bosanganaka te na misala ya molili, oyo ebotaka mbuma te, kasi bobimisaka yango na pwasa. \v 12 Pamba te makambo nyonso oyo esalemaka na nkuku ezalaka soni mpo na kolobela yango. \v 13 Nzokande nyonso oyo pole ebimisaka na pwasa emonana polele, \v 14 pamba te nyonso oyo ebimi na pwasa ekomaka pole. Yango wana baloba : \q1 « Moto na pongi, lamuka, \q2 bima kati na bakufi, \q2 mpe Klisto akongengisa yo. » \p \v 15 Boye, bosalaka penza keba na ndenge na bino ya kobika ; tika ete ezala te lokola bazoba, kasi lokola bato na bwanya. \v 16 Bosalelaka tango na bino na ndenge ya malamu, pamba te mikolo ezali mabe. \s1 Bomoi na nzela ya Molimo \p \v 17 Yango wana, bozalaka bazoba te, kasi bososolaka oyo ebengami mokano ya Nkolo. \p \v 18 Bolangwaka masanga te, pamba te ememaka na mobulu ; kasi botondisamaka na Molimo, \v 19 bolendisanaka na nzela ya banzembo ya masanzoli, banzembo ya lokumu, mpe na nzela ya banzembo oyo ewutaka na Molimo ; boyembelaka mpe bosanzolaka Nkolo wuta na mozindo ya mitema na bino ; \v 20 bozongisaka tango nyonso matondi epai ya Nzambe Tata mpo na makambo nyonso, na Kombo na Yesu-Klisto, Nkolo na biso ; \v 21 mpe lokola botosaka Klisto, botosanaka bamoko na bamosusu. \p \v 22 Basi, botosaka mibali na bino ndenge botosaka Nkolo. \v 23 Pamba te mobali azali mokonzi ya mwasi, ndenge Klisto azali Mokonzi ya Lingomba oyo ezali nzoto na Ye, mpe Ye azali Mobikisi na yango. \v 24 Kasi lokola Lingomba etosaka Klisto, tika ete basi mpe batosaka mibali na bango na makambo nyonso. \p \v 25 Mibali, bolingaka basi na bino ndenge Klisto alingaki Lingomba mpe amikabaki mpo na yango \v 26 mpo na kokomisa yango bule sima na Ye kopetola yango na mayi na nzela ya Liloba na Ye, \v 27 mpe mpo na kotalisa yango epai na Ye moko lokola Lingomba etonda na nkembo, ezanga litono to likwanza to mbeba, kasi lokola Lingomba ya bule mpe ezanga pamela. \p \v 28 Ezali ndenge wana nde mibali basengeli kolinga basi na bango lokola banzoto na bango moko. Mobali oyo alingaka mwasi na ye amilingaka ye moko. \v 29 Pamba te moko te asila koyina nzoto na ye ; kasi aleisaka mpe abatelaka yango malamu, ndenge kaka Klisto asalaka mpo na Lingomba, \v 30 pamba te tozali biteni ya nzoto na Ye. \p \v 31 Yango wana, mobali akotika tata na ye mpe mama na ye, mpe akosangana na mwasi na ye, bongo bango mibale bakokoma nzoto moko. \p \v 32 Ezali wana na mabombami minene, kasi ngai nazali koloba na tina na Klisto mpe Lingomba. \v 33 Atako bongo, mobali nyonso kati na bino asengeli kolinga mwasi na ye ndenge amilingaka, mpe mwasi nyonso asengeli kotosa mobali na ye. \c 6 \s1 Baboti mpe bana \p \v 1 Bino bana, botosaka baboti na bino kati na Nkolo, pamba te yango nde ezali sembo. \v 2 Tala mobeko ya liboso oyo ekangani na elaka : Okopesaka tata mpe mama na yo lokumu \v 3 mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi ya molayi kati na mokili. \p \v 4 Bino batata, bopesaka bana na bino kanda te, kasi bobokolaka bango kati na mateya mpe makebisi ya Nkolo. \s1 Bankolo mpe bawumbu \p \v 5 Bino bawumbu, botosaka bankolo na bino ya mokili, na limemia, na kobanga mpe na bosembo ya mitema, lokola nde bozali kotosa Klisto ; \v 6 na miso na bango kaka te, lokola nde bozali koluka kosepelisa bato, kasi lokola bawumbu ya Klisto, oyo bazali kosala mokano ya Nzambe wuta na mitema na bango. \v 7 Bosalaka na esengo lokola bawumbu ya Nkolo, kasi lokola bawumbu ya bato te, \v 8 pamba te boyebi malamu ete Nkolo akofuta moto nyonso mpo na bolamu nyonso oyo asalaka, azala mowumbu to monsomi. \p \v 9 Bongo mpo na bino bankolo, bosalaka mpe ndenge wana epai ya bawumbu na bino. Bobangisaka bango te, lokola boyebi malamu ete Nkolo na bango, oyo azali kati na Likolo azali mpe Nkolo na bino mpe aponaka bilongi te. \ms1 Etumba ya Molimo \s1 Bibundeli ya Nzambe \p \v 10 Mpo na kosukisa, bozalaka makasi kati na Nkolo mpe kati na nguya na Ye ya monene. \p \v 11 Bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kotelema ngwi liboso ya mayele mabe ya Satana. \v 12 Pamba te tobundisaka nzoto te mpe tobundisaka makila te, kasi tobundisaka nde banguya, bakonzi ya milimo ya Satana, bokonzi ya molili, banguya ya mokili ya molili mpe milimo mabe oyo ezali kati na mboka ya milimo. \p \v 13 Yango wana, bolataka bibundeli nyonso ya Nzambe mpo ete bokoka kolonga na mokolo mabe ya Satana mpe kotelema ngwi kino na suka sima na bino kobunda. \v 14 Boye botelema ngwi, bolataka solo lokola mokaba na loketo, bosembo lokola ebombelo ya tolo, \v 15 molende ya kopanza Sango Malamu ya kimia lokola sapato na makolo na bino. \v 16 Na likolo na nyonso, bobakisaka kondima lokola nguba oyo bokoboma na yango moto ya makonga nyonso oyo Satana akobwakaka. \v 17 Bolataka lobiko lokola ekoti ya ebende, mpe bozwaka Liloba na Nzambe lokola mopanga ya Molimo. \s1 Losambo \p \v 18 Mpe bosambelaka tango nyonso na bokambami ya Molimo, na nzela ya lolenge nyonso ya mabondeli mpe ya bisengeli. Mpo na yango, bosenzelaka mpe bomikabaka mobimba mpo na kobondelaka mpo na basantu nyonso. \v 19 Bobondelaka mpe mpo na ngai mpo ete, tango nyonso nakozala koteya, Nzambe apesa ngai maloba oyo nasengeli kotatola mpo na kosakola mabombami ya Sango Malamu, na kozanga bobangi. \v 20 Ezali mpo na Sango Malamu yango nde nazali motindami kati na minyololo. Boye, bobondelaka mpo ete natatolaka yango na kozanga bobangi, ndenge nasengeli penza kolobela yango. \b \s1 Bambote \p \v 21 Tishike oyo, kati na Nkolo, azali ndeko molingami mpe mosali ya sembo, akoyebisa bino makambo nyonso, mpo ete bino mpe boyeba ndenge nini nazali mpe makambo nini nazali kosala. \p \v 22 Ezali na tina yango nde nazali kotinda ye epai na bino, mpo ete apesa bino basango na tina na ngai mpe alendisa bino. \b \p \v 23 Tika ete Nzambe Tata mpe Nkolo Yesu-Klisto bapesa na bandeko nyonso kimia, bolingo mpe kondima ! \b \p \v 24 Tika ete ngolu ezala na bato nyonso oyo balingaka Yesu-Klisto, Nkolo na biso, na bolingo oyo ekoki kobeba te !