\id DEU Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h Deteronomi \toc1 Deteronomi \toc2 Deteronomi \toc3 Det \mt1 Deteronomi \c 1 \s1 Etinda ya kolongwa na ngomba Orebi \p \v 1 Tala maloba oyo Moyize ayebisaki bana nyonso ya Isalaele na ngambo ya este ya Yordani kati na esobe, kati na etando Araba oyo etalana na Sufi, kati ya Parani mpe Tofeli, kati ya Labani, Atseroti mpe Di-Zaabi. \v 2 Esengaka mikolo zomi na moko ya mobembo wuta na Orebi kino na Kadeshi-Barinea, na nzela ya ngomba Seiri. \v 3 Na mokolo ya liboso ya sanza ya zomi na moko, na mobu ya minei, Moyize alobaki na bana ya Isalaele makambo nyonso oyo Yawe atindaki ye na tina na bango. \v 4 Makambo yango esalemaki sima na Moyize kolonga Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki koyangela wuta na Eshiboni, mpe sima na ye kolonga Ogi, mokonzi ya Bashani, oyo azalaki kovanda na Ashitaroti mpe na Edreyi. \p \v 5 Ezalaki na ngambo ya este ya Yordani, na mokili ya Moabi, nde Moyize alimbolaki mobeko oyo. Alobaki na bango : \s1 Moyize akanisaki lisusu elaka ya Nzambe \p \v 6 « Yawe, Nzambe na biso, alobaki na biso, na ngomba Orebi : ‹ Bowumeli mpe mingi na ngomba oyo. \v 7 Bolongola molako mpe bokende kino na etuka ya bangomba ya bato ya Amori ; bokende na bamboka nyonso oyo ezali pene ya Araba, na bangomba, na mboka ya se, na Negevi mpe pembeni-pembeni ya mayi monene, kati na mokili ya bato ya Kanana mpe na mokili ya Libani kino na Efrate, ebale monene. \v 8 Tala, napesi bino mokili oyo. Bokota mpe bokamata mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino —Abrayami, Izaki, Jakobi— mpe bakitani na bango. › » \s1 Moyize aponaki bakambi \p \v 9 Na tango wana, nalobaki na bino : \pi1 — Ngai moko nakokoka te kokamba bino. \v 10 Yawe, Nzambe na bino, akomisi bino ebele koleka mpe tala lelo motango na bino ekomi lokola minzoto na likolo. \v 11 Tika ete Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, akomisa bino ebele mbala nkoto moko mpe apambola bino ndenge alakaki ! \v 12 Nakokoka ndenge nini komema ngai moko makambo na bino, mikumba na bino, mpe kowelana na bino ? \v 13 Bopona bato ya bwanya, ya mayele mpe ya lokumu kati na moko na moko ya mabota na bino, mpe ngai nakotia bango bakambi na bino. \p \v 14 Bozongiselaki ngai : \pi1 — Makambo oyo osili koyebisa biso ezali malamu. \p \v 15 Boye, nazwaki bakambi kati na mabota na bino, bato ya lokumu mpe ya bwanya, bongo nakomisaki bango bakambi ya bankoto, ya bankama, ya batuku mitano mpe ya bazomi, mpe bakalaka mpo na mabota na bino. \v 16 Na tango wana, napesaki bakambi na bino mokumba oyo : « Boyoka kowelana oyo ezali kati na bandeko na bino mpe bokata makambo na bosembo ; ezala kowelana kati ya bana ya Isalaele bango na bango to kati ya mwana ya Isalaele mpe mopaya. \v 17 Bopona bilongi te na tango ya kosambisa, boyoka bato nyonso : azala moto pamba to moto monene. Bobanga moto te, pamba te kosambisa ezali likambo ya Nzambe. Bomemela ngai likambo oyo eleki bino na makasi mpe ngai nakoyoka yango. » \v 18 Mpe na tango wana, nayebisaki bino makambo nyonso oyo bosengeli kosala. \p \v 19 Boye, ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso, tolongwaki na ngomba Orebi mpe tokendeki na etuka ya bangomba ya bato ya Amori. Tokatisaki esobe monene mpe ya somo oyo bomonaki mpe tokomaki na Kadeshi-Barinea. \v 20 Nalobaki na bino : \pi1 — Bosili kokoma na etuka ya bangomba ya bato ya Amori, etuka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso. \v 21 Botala, Yawe, Nzambe na bino, apesi bino mokili ; bokende mpe bokamata yango ndenge Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alobaki na bino. Bobanga te mpe bozala na mpiko. \p \v 22 Bato nyonso kati na bino bayaki epai na ngai mpe balobaki : \pi1 — Tika ete totinda liboso na biso bato mpo na konongela biso mokili mpe komemela biso sango ya nzela oyo tokoki kolanda mpe ya bingumba epai wapi tokokende. \p \v 23 Likanisi yango emonanaki malamu na miso na ngai, yango wana naponaki kati na bino mibali zomi na mibale, mobali moko mpo na libota moko. \v 24 Balongwaki mpe bakendeki, bongo bamataki kino na etuka ya bangomba mpe bakomaki na lubwaku ya Eshikoli oyo banongaki. \v 25 Bakamataki na maboko na bango ndambo ya bambuma ya mokili wana mpe bamemelaki biso yango. Tala sango oyo bapesaki biso : « Mboka oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso ezali malamu. » \s1 Bana ya Isalaele batombokelaki Yawe \p \v 26 Kasi boboyaki komata, botombokelaki etinda ya Yawe, Nzambe na bino. \v 27 Bongo boyimaki-yimaki kati na bandako na bino mpe bolobaki : « Yawe alingaka biso te, yango wana abimisaki biso na Ejipito mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Amori mpo ete bango baboma biso. \v 28 Boni, tokende kaka kuna ? Bandeko na biso basili kolembisa biso nzoto. Balobi : ‹ Bato yango bazali makasi mpe bingambe koleka biso, bingumba na bango ezali minene mpe bamir na yango ekenda kino na likolo. Tomonaki lisusu bana ya Anaki kuna. › » \p \v 29 Nalobaki na bino : « Bozala na somo te mpe bobanga bango te, \v 30 pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali kotambola liboso na bino mpe akobunda mpo na bino ndenge asalaki na Ejipito, na miso ya bato nyonso. \v 31 Mpe na esobe, na banzela nyonso oyo botambolaki kino bokoma na esika oyo, bomonaki ndenge nini Yawe, Nzambe na bino, amemaki bino ndenge tata amemaka mwana na ye. » \p \v 32 Atako bongo, botiaki elikya te epai na Yawe, Nzambe na bino, \v 33 oyo azalaki kotambola liboso na bino na nzela mpo na kolukela bino esika ya kotonga molako. Na butu, azalaki lokola likonzi ya moto ; mpe na moyi, azalaki lokola likonzi ya lipata ; mpo na kolakisa bino nzela oyo bosengelaki kotambola. \p \v 34 Tango Yawe ayokaki nyonso oyo bozalaki koloba, asilikaki mpe alapaki ndayi : \v 35 « Moto moko te kati na molongo oyo ya bato mabe akoki komona mokili ya kitoko oyo nalakaki kopesa na bakoko na bango na nzela ya ndayi, \v 36 longola kaka Kalebi, mwana mobali ya Yefune ; ye akomona yango, mpe nakopesa na ye mpe na bakitani na ye, mokili oyo lokolo na ye enyataki, pamba te asalelaki Ngai Yawe na motema na ye mobimba. » \p \v 37 Likolo na bino, Yawe asilikelaki mpe ngai ; alobaki : « Yo mpe lisusu okokota te kati na mokili yango. \v 38 Kasi mosungi na yo Jozue, mwana mobali ya Nuni, ye akokota kati na yango. Lendisa ye, pamba te ye nde akokamba Isalaele mpo na kozwa mokili yango lokola libula. \v 39 Bongo, bana na bino oyo bolobaki ete bakomema bango na bowumbu, bana na bino oyo bayebi nanu te kokesenisa malamu mpe mabe, bango nde bakokota na mokili yango. Nakopesa bango mokili yango, mpe bakokamata yango. \v 40 Mpo na bino, bobaluka mpe bokende na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo. » \p \v 41 Bozongiselaki ngai : « Tosali masumu epai na Yawe. Tokokende mpe tokobunda ndenge Yawe, Nzambe na biso, atindaki biso. » Boye, moto nyonso kati na bino alataki bibundeli na ye, mpe bokanisaki ete ezali likambo ya pasi te komata na etuka ya bangomba. \v 42 Kasi Yawe alobaki na ngai : « Yebisa bango ete bamata te mpe babunda te, pamba te nakozala elongo na bango te ; banguna na bango bakolonga bango. » \v 43 Nzokande nayebisaki bino, kasi boyokaki kaka te ; botombokelaki mitindo ya Yawe ; mpe, na lolendo na bino, bomataki na etuka ya bangomba. \v 44 Boye, bato ya Amori oyo bavandaka na bangomba yango bakitelaki bino mpe babundisaki bino, babenganaki bino lokola liboke ya banzoyi mpe balongaki bino longwa na Seiri kino na Orima. \v 45 Bozongaki mpe bolelaki liboso ya Yawe, kasi aboyaki koyoka kolela na bino, akangaki matoyi na Ye. \v 46 Bongo bovandaki na Kadeshi mikolo ebele. \c 2 \s1 Bana ya Isalaele Bayengaki-yengaki kati na Esobe \p \v 1 Na sima, tobalukaki mpe tokendeki na esobe, na nzela ya ebale monene ya Barozo ndenge Yawe atindaki ngai, pamba te tobalukaki mikolo ebele zingazinga ya etuka ya ngomba Seiri. \p \v 2 Yawe alobaki na ngai : \v 3 « Bowumeli mingi na kobaluka zingazinga ya etuka ya bangomba oyo ; sik’oyo bokende na ngambo ya nor. \v 4 Pesa mitindo oyo epai ya bato : ‹ Bokomi pembeni ya koleka mokili ya bandeko na bino, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Bakobanga bino, kasi bozala mayele. \v 5 Bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango, ezala ata esika ya kotia lokolo na bino. Nasila kopesa, epai na Ezawu, etuka ya ngomba Seiri lokola libula na ye. \v 6 Bokofuta bango palata mpo na biloko oyo bokolia mpe mpo na mayi oyo bokomela. \v 7 Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino na misala nyonso ya maboko na bino. Abateli bino na esobe oyo ya monene mibu tuku minei. Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino mpe bozangi eloko moko te. › » \p \v 8 Na sima, totikaki bandeko na biso, bakitani ya Ezawu oyo bavandaka na Seiri. Tobalukaki wuta na nzela ya Araba oyo ewuta na Eyilati mpe na Etsioni-Geberi, mpe tokendeki na nzela ya esobe ya Moabi. \p \v 9 Yawe alobaki na ngai : « Bomona bato ya Moabi lokola banguna na bino te mpe bobundisa bango te, pamba te nakopesa bino ata eloko moko te kati na mokili na bango. Nasila kopesa mokili ya Ari lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. » \p \v 10 Bato ya Emimi nde bazalaki kovanda kuna na kala. Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe lokola bana ya Anaki. \v 11 Bango mpe bazalaki komonana lokola bato ya Refayimi ndenge moko na bana ya Anaki. Kasi bato ya Moabi bazalaki kobenga bango bato ya Emimi. \v 12 Bato ya Ori mpe bazalaki kovanda na Seiri kasi bakitani ya Ezawu babenganaki bango. Babomaki bato ya Ori liboso na bango mpe bakomaki kovanda na bisika na bango ndenge kaka Isalaele asalaki mpo na mokili oyo Yawe apesaki bango lokola bozwi. \p \v 13 Yawe alobaki : « Sik’oyo, botelema mpe bokatisa lubwaku ya Zeredi. » Boye totikaki lubwaku. \v 14 Mibu tuku misato na mwambe elekaki wuta tango tolongwaki na Kadeshi-Barinea kino tokatisaki lubwaku ya Zeredi. Banda wana, molongo nyonso ya bato oyo babundaki bitumba bakufaki kati na molako ndenge Yawe alapaki ndayi mpo na bango. \v 15 Loboko ya Yawe ebalukelaki bango kino asilisaki koboma bango nyonso kati na molako. \p \v 16 Tango bato ya suka kati na bato oyo bazalaki kobunda bitumba basilaki kokufa, \v 17 Yawe alobaki na ngai : \v 18 « Lelo oyo, okokatisa Moabi mpe Ari. \v 19 Tango okokoma na mokili ya bato ya Amoni, komona bango lokola banguna te mpe kobundisa bango te, pamba te nakopesa yo ata eteni moko te ya mabele kati na mokili ya bakitani ya bato ya Amoni. Nasilaki kopesa yango lokola bozwi epai ya bakitani ya Loti. » \p \v 20 Mboka yango mpe emonanaki lokola mboka oyo bato ya Refayimi bazalaki kovanda. Kasi bato ya Amoni bazalaki kobenga bato ya Refayimi : bato ya Zamizumi. \v 21 Bazalaki makasi mpe ebele, bingambe kaka lokola bana ya Anaki. Kasi Yawe abomaki bango liboso ya bato ya Amoni. Bato ya Amoni babenganaki bato ya Zamizumi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango. \v 22 Yawe asalaki mpe ndenge wana mpo na bakitani ya Ezawu oyo bazalaki kovanda na Seiri tango abomaki bato ya Ori liboso na bango. Bakitani ya Ezawu babenganaki bato ya Ori mpe bakomaki kovanda na bisika na bango kino na mokolo ya lelo. \v 23 Ezalaki mpe ndenge moko mpo na bato na Avi oyo bazalaki kovanda na mboka yango kino na Gaza. Bato ya Kafitori\f + \fr 2.23 \fr*\ft Bato ya Kafitori bazali bato ya Filisitia (\+xt Am 9.7\+xt*).\ft*\f*, oyo bawuta na mokili ya Kafitori, babomaki bato ya Avi mpe bakomaki kovanda na bisika na bango. \s1 Bana ya Isalaele balongaki Sikoni \p \v 24 Yawe alobaki : « Botelema, bokende mpe bokatisa lubwaku ya Arinoni. Nakabi na maboko na bino, Sikoni, moto ya Amori mpe mokonzi na Eshiboni, elongo na mokili na ye. Bobanda kobundisa yango mpe bokamata yango. \v 25 Lelo, nakosala ete mabota nyonso ya mokili ezala na somo mpe kobanga liboso na bino. Bakoyoka sango ya makambo oyo bokosala, bongo bakolenga mpe bakozanga kimia likolo na bino. » \p \v 26 Wuta na esobe ya Kedemoti, natindaki bantoma epai ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, na maloba ya kimia. \v 27 Nalobaki : « Tobondeli yo, tika biso tolekela na mokili na yo. Tokoleka kaka na nzela ya monene, tokobaluka te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to ya mobali. \v 28 Okotekela biso biloko ya kolia mpe mayi ya komela na motuya ya palata. Kasi tika biso kaka toleka na makolo \v 29 ndenge bakitani ya Ezawu, oyo bavandaka na mokili ya Seiri, mpe bato ya Moabi, oyo bavandaka na Ari, basalelaki biso kino tokatisaki Yordani mpe tokotaki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na biso, apesi biso. » \v 30 Kasi Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, aboyaki kopesa biso nzela ya kolekela na mokili na ye, pamba te Yawe, Nzambe na bino, akomisaki moto na ye makasi mpe motema na ye libanga, mpo na kokaba ye na maboko na bino ndenge asali lelo. \p \v 31 Bongo Yawe alobaki na ngai : « Tala, nabandi kokaba na maboko na bino Sikoni mpe mokili na ye. Banda kobotola yango mpe kamata yango. » \v 32 Tango Sikoni elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kobundisa biso na Yakatsi, \v 33 Yawe, Nzambe na biso, akabaki ye na maboko na biso mpe tobomaki ye, bana na ye ya mibali mpe mampinga na ye nyonso. \v 34 Bongo, tobotolaki bingumba na ye nyonso, tobukaki bingumba nyonso, tobomaki mibali, basi mpe bana nyonso ; totikaki ata moto moko te. \v 35 Kasi tomemaki mpo na biso : bibwele mpe bomengo ya bitumba oyo tokutaki na bingumba na bango. \v 36 Longwa na Aroeri oyo ezali na suka ya lubwaku ya Arinoni, mpe longwa na engumba oyo ezali kati na lubwaku kino na Galadi, ezalaki na engumba moko te oyo elekaki biso na makasi. Yawe, Nzambe na biso, apesaki biso yango nyonso. \v 37 Kasi bopusanaki te na mokili ya bato ya Amoni, na ngambo nyonso ya lubwaku ya Yaboki, na bingumba ya bangomba, mpe na bisika nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, apekisaki biso. \c 3 \s1 Bana ya Isalaele balongaki Ogi \p \v 1 Sima, tobalukaki mpe tokendeki na nzela ya Bashani. Bongo Ogi, mokonzi ya Bashani, elongo na mampinga na ye nyonso babimaki mpo na kokutana na biso mpe babundisaki biso na Edreyi. \v 2 Yawe alobaki na ngai : « Kobanga ye te, pamba te nakabi ye na maboko na yo elongo na mampinga na ye nyonso mpe mokili na ye ; sala ye ndenge osalaki Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni. » \v 3 Boye Yawe, Nzambe na biso, akabaki lisusu Ogi, mokonzi ya Bashani, mpe mampinga na ye nyonso, na maboko na biso ; mpe tobomaki bango, totikaki ata moto moko te. \v 4 Na tango wana, tobotolaki bingumba na ye nyonso, totikaki ata engumba moko te kati na bingumba tuku motoba na etando ya Arigobi kati na mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani. \v 5 Bingumba wana nyonso ezalaki ya kotongama makasi mpe ezalaki na bamir ya milayi mpe na bikuke oyo bakangaka na bibende mpe ezalaki lisusu na bamboka ebele oyo ezanga bamir. \v 6 Boye, tobukaki yango nyonso ndenge tosalaki epai ya Sikoni, mokonzi ya Eshiboni. Tango tobukaki bingumba na ye, tobomaki mibali, basi mpe bana na ye. \v 7 Kasi tomemaki mpo na biso bibwele mpe bomengo ya bitumba oyo tobotolaki na bingumba. \p \v 8 Boye, na tango wana, tozwaki na maboko ya bakonzi mibale ya bato ya Amori, mokili oyo ezalaki na ngambo ya este ya Yordani, wuta na lubwaku ya Arinoni kino koleka ngomba Erimoni. \v 9 Bato ya Sidoni babengaka ngomba Erimoni Sirioni mpe bato ya Amori babengaka yango Seniri. \v 10 Tozwaki bingumba nyonso ya etando, Galadi nyonso mpe Bashani nyonso kino koleka bingumba ya Salika mpe ya Edreyi, bingumba ya Bashani epai wapi Ogi azalaki koyangela. \v 11 Nzokande Ogi, mokonzi ya Bashani, atikalaki kaka ye moko na bomoi kati na bato ya Refayimi. Mbeto na ye ezalaki ya bibende ; molayi na yango ezalaki na bametele pene minei mpe mokuse na yango, bametele pene mibale. Mbeto yango ezali kino lelo na engumba Raba ya bato ya Amoni. \s1 Bokabolami ya mokili \p \v 12 Na tango wana, tobotolaki mokili yango. Napesaki epai ya bato ya libota ya Ribeni mpe ya libota ya Gadi mokili oyo ezalaki wuta na Aroeri, kati na lubwaku ya Arinoni kino ndambo ya etuka ya bangomba ya Galadi mpe bingumba na yango. \v 13 Ndambo oyo etikalaki na Galadi mpe nyonso mosusu ya Bashani, mokili ya Ogi, napesaki yango na ndambo ya libota ya Manase : Mokili nyonso ya Arigobi, oyo ezali na Bashani, eyebanaki lokola mokili ya bato ya Refayimi. \v 14 Yairi, mokitani ya Manase, abotolaki etuka nyonso ya Arigobi kino na mondelo ya bato ya Geshuri mpe ya bato ya Maakati. Apesaki bamboka yango kombo na ye. Yango wana kino lelo babengaka Bashani bamboka ya Yairi. \v 15 Mpe napesaki Galadi epai ya Makiri. \v 16 Kasi epai ya mabota ya Ribeni mpe ya Gadi, napesaki etando oyo ebanda wuta na Galadi, ekenda na lubwaku ya Arinoni mpe esalaki mondelo kino na ebale ya Yaboki oyo esalaki mondelo na mokili ya Amoni. \v 17 Mondelo na yango ya weste ezalaki Yordani : wuta na Kinereti kino na ebale monene ya Araba, ebale monene ya Barozo, na se ya bangomba ya Pisiga na ngambo ya este. \p \v 18 Na tango wana, napesaki bino mitindo oyo : « Yawe, Nzambe na bino, apesaki bino mokili oyo mpo ete bokamata yango. Kasi bato na bino nyonso oyo bazali na makoki ya kobunda balata bibundeli mpe baleka liboso ya bandeko na bino bana ya Isalaele. \v 19 Bobele basi na bino, bana na bino mpe ebele ya bibwele na bino nde bakotikala na bingumba oyo napesaki bino \v 20 kino tango Yawe akopesa bopemi epai ya bandeko na bino ndenge asalaki mpo na bino, mpe kino bango lisusu bakozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bango na ngambo mosusu ya Yordani. Sima na yango, bokozonga, moko na moko, na mabele oyo napesaki bino. » \p \v 21 Na tango wana, nalobaki na Jozue : « Omonaki yo moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki epai na bakonzi oyo mibale ; akosala kaka ndenge moko na bikolo nyonso epai wapi bokoleka. \v 22 Bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, Ye moko akobundela bino. » \s1 Moyize akokota te na mokili ya elaka \p \v 23 Na tango wana, nabondelaki Yawe : \pi1 \v 24 — Oh Nkolo Yawe, obandaki kolakisa monene na Yo mpe nguya na Yo epai ya mosali na Yo. Pamba te nzambe nini na likolo mpe na se akoki kosala misala minene mpe makambo ya kokamwa lokola oyo Yo osali ? \v 25 Nabondeli Yo, yokela ngai mawa mpo ete nakatisa Yordani mpo namona mokili oyo ya kitoko na ngambo mosusu, etuka kitoko ya bangomba mpe Libani. \p \v 26 Kasi likolo na bino, Yawe asilikelaki ngai mpe aboyaki koyoka ngai. Alobaki na ngai : \pi1 — Ekoki boye ! Koloba na ngai lisusu likambo wana te. \v 27 Mata na songe ya ngomba Pisiga mpe tala na ngambo ya weste, na nor, na sude mpe na este. Tala kaka mokili na miso kasi okotikala kokatisa Yordani te. \v 28 Pesa mitindo na Jozue, pesa ye makasi mpe lendisa ye ; pamba te ye nde akokamba bato oyo mpe akosala ete bazwa lokola libula mokili oyo ozali komona. \p \v 29 Bongo tovandaki na lubwaku oyo etalani na Beti-Peori. \c 4 \s1 Moyize asengi na bato kotosa Mobeko \p \v 1 Sik’oyo Isalaele, yoka malamu mitindo mpe mibeko oyo nalingi koteya yo. Salela yango mpo ete ozala na bomoi mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na yo, apesi yo. \v 2 Kobakisa eloko moko te na oyo natindi yo mpe kolongola eloko moko te kati na yango, kasi tosa mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo. \v 3 Bomonaki bino moko makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki na Bala ya Peori : abomaki kati na bino bato nyonso oyo bamipesaki na kosalela Bala ya Peori. \v 4 Kasi bino oyo bokangamaki na Yawe, Nzambe na bino, bino nyonso bozali na bomoi na mokolo ya lelo. \p \v 5 Tala, nateyaki bino mitindo mpe mibeko ndenge Yawe, Nzambe na ngai, atindaki ngai, mpo ete bokoka kotosa yango na mokili oyo bokokota mpo na kozwa yango. \v 6 Botosa yango mpe bosalela yango na bokebi ; yango nde ekokomisa bino bato ya bwanya mpe ya mayele na miso ya bikolo oyo bakoyoka sango ya mitindo mpe mibeko yango ; mpe bakoganga : « Solo, libota monene oyo ezali na bato ya bwanya mpe na bato ya mayele. » \v 7 Pamba te ekolo nini lisusu ya monene, oyo banzambe na yango ezali pembeni na yango ndenge Yawe, Nzambe na biso, azalaka pembeni na biso tango nyonso oyo tobelelaka Ye ? \v 8 Mpe ekolo nini mosusu ya monene, oyo ekoki kozala na mitindo mpe mibeko ya sembo lokola Mobeko oyo natie lelo liboso na bino ? \s1 Nzambe amimonisaki epai ya bana ya Isalaele \p \v 9 Nzokande, sala keba mpe omisenzela mpo ete obosana te makambo oyo miso na yo emonaki to kotika te makambo yango elongwa na motema na yo na mikolo nyonso ya bomoi na yo. Teya yango na bana na yo mpe na bana na bango oyo bakobotama na sima na bango. \p \v 10 Kanisa mokolo oyo otelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na Orebi tango Yawe alobaki na ngai : « Sangisa bato oyo liboso na Ngai mpo na koyoka maloba na Ngai, mpo ete bakoka koyeba kopesa Ngai lokumu tango nyonso bakozala na mokili oyo mpe bakoka koteya yango na bana na bango. » \v 11 Yango wana, bino bopusanaki mpe botelemaki na ebandeli ya ngomba tango ezalaki kopela moto oyo ekomaki kino na likolo elongo na mapata ya mwindo mpe molili makasi. \v 12 Yawe alobelaki bino wuta na moto ; boyokaki lokito ya maloba na ye kasi bomonaki ata nzoto te ; mongongo kaka nde ezalaki koyokana. \v 13 Atalisaki bino boyokani na Ye, mibeko zomi oyo bosengeli kosalela, mpe akomaki yango na bitando mibale ya mabanga. \v 14 Na tango wana kaka, Yawe atindaki ngai koteya bino bikateli mpe mibeko oyo bosengeli kosalela na mokili oyo bokokende mpo na kozwa yango. \s1 Nzambe apekisaki kosambela bikeko \p \v 15 Bongo, bomisenzela malamu, pamba te bomonaki nzoto te na mokolo oyo Yawe alobelaki bino na ngomba Orebi wuta na moto. \v 16 Bomibebisa te na kosala ekeko, elilingi ya mwasi to ya mobali, \v 17 ya nyama nyonso ya mokili to ya ndeke nyonso oyo epumbwaka na likolo, \v 18 ya ekelamu nyonso oyo etambolaka na libumu to ya mbisi nyonso oyo etiolaka na se ya mayi. \v 19 Mpe tango botalaka na mapata mpe bomonaka moyi, sanza, minzoto mpe biloko mosusu oyo ezali na likolo, bokosama te mpo na kofukamela mpe kogumbamela biloko oyo Yawe, Nzambe na bino, apesa na bikolo nyonso oyo ezali na mokili. \v 20 Kasi mpo na bino, Yawe azwaki bino mpe abimisaki bino na fulu ya moto ya bibende, oyo ezalaki Ejipito, mpo ete bozala bato ya libula na Ye ndenge bozali sik’oyo. \p \v 21 Yawe asilikelaki ngai likolo na bino mpe alapaki ndayi na makasi nyonso ete nakoki te kokatisa Yordani mpe kokota na mokili kitoko oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula. \v 22 Nakokufa na mokili oyo mpe nakokatisa Yordani te ; kasi bino, etikali moke bokatisa mpe bokamata mokili oyo ya kitoko. \v 23 Bozala na bokebi mpe bobosana te boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki elongo na bino. Mpe bomisalela ekeko te na lolenge nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apekisaki. \v 24 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali moto oyo ezikisaka, azali Nzambe na zuwa. \s1 Etumbu na tina na kosambela bikeko \p \v 25 Tango bokozala na bana mpe bakoko, mpe bokowumela tango molayi na mokili, soki bokosami mpe bosali ekeko ya lolenge nyonso, soki bosali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na bino, soki botumboli kanda na Ye, \v 26 soki bosali makambo wana, likolo mpe se ekozala motatoli kati na ngai mpe bino : bokolimwa noki na mokili oyo bokokende kozwa sima na bino kokatisa Yordani. Bokowumela kuna tango molayi te, kasi bokobebisama solo ; \v 27 Yawe akopanza bino kati na bato. Kasi ndambo kaka ya bato kati na bino nde bakowumela kati na bikolo epai wapi Yawe akomema bino. \v 28 Kuna, bokogumbamela banzambe oyo esalemi na maboko ya bato, banzambe ya banzete to ya mabanga, oyo ekoki komona te, koyoka te, kolia te mpe koyoka solo te. \v 29 Kasi soki, wuta na mokili wana, boluki Yawe, Nzambe na bino, bokomona Ye soki boluki Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba. \v 30 Tango bokozala na mawa mpe pasi nyonso oyo ekokomela bino, sima na mikolo, bokozonga epai na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokotosa Ye. \v 31 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya mawa, akosundola bino te, akobebisa bino te mpe akobosana te boyokani oyo asala na bakoko na bino tango alapaki ndayi. \s1 Yawe kaka nde azali Nzambe \p \v 32 Luka koyeba makambo oyo esalema na mikolo ya liboso, liboso ete yo obotama, wuta mokolo oyo Nzambe asala moto na mokili ; luka oyeba makambo oyo esalema kati na mokili banda na suka moko kino na suka mosusu, soki likambo ya monene boye esila kosalema, soki likambo ya boye esila koyokana. \v 33 Boni, ezali na bato bayoka mongongo ya Nzambe kolobela bango kati na moto ndenge bino boyokaki mpe botikali na bomoi ? \v 34 Boni, ezali na nzambe oyo ameka kobimisa mpo na ye ekolo moko wuta na ekolo mosusu na nzela ya komekama, ya bilembo, ya bikamwa, ya bitumba, ya maboko na ye ya nguya, mpe na kosembola loboko to na nzela ya misala minene ya somo lokola makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, asala mpo na bino kati na Ejipito na miso na bino ? \v 35 Omonaki makambo nyonso wana mpo oyeba ete Yawe kaka nde azali Nzambe, mosusu azali te. \v 36 Wuta na likolo, ayebisaki yo na mongongo na Ye mpo na koteya yo ; na se, Yawe alakisaki yo moto na ye ya monene mpe oyokaki mongongo na Ye kobima kati na moto. \v 37 Lokola alingaki bakoko na yo mpe aponaki bakitani na bango, abimisaki yo na Ejipito na nguya na Ye mpe na makasi na Ye ya monene \v 38 mpo na kobengana liboso na yo bikolo minene mpe ya makasi koleka yo mpe kokotisa yo na bamboka na bango mpo na kopesa yo yango lokola libula ndenge yango ezali na mokolo ya lelo. \v 39 Yeba yango lelo mpe tia yango na motema na yo ete Yawe kaka nde azali Nzambe na likolo mpe na se, mosusu azali te. \v 40 Batela bikateli mpe mitindo na Ye, oyo nazali kopesa yo lelo mpo ete ozala moto ya esengo, yo mpe bana na yo sima na yo, mpe mpo ete owumela tango molayi na mokili oyo Yawe, Nzambe, na yo apesi yo mpo na libela. \s1 Moyize aponi bingumba ya kokimela \p \v 41 Moyize aponaki bingumba misato na ngambo ya este ya Yordani, \v 42 mpo ete moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nko te, na kozanga koyina ye liboso, akoka kokimela na moko kati na bingumba yango mpe akoka kobikisa bomoi na ye. \v 43 Tala bingumba yango : Mpo na libota ya Ribeni, engumba Betseri kati na etando ya esobe ; mpo na libota ya Gadi, engumba Ramoti ya Galadi, mpe mpo na libota ya Manase, engumba Golani kati na Bashani. \ms1 Isalaele asengeli kokangama na Yawe kaka \s1 Ebandeli \p \v 44 Tala Mobeko oyo Moyize atiaki liboso ya bana ya Isalaele : \v 45 Tala malako, bikateli mpe mibeko oyo Moyize apesaki na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito ; \v 46 mpe tango bazalaki na lubwaku etalana na Beti-Peori, na ngambo ya este ya Yordani, kati na mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori, oyo azalaki kovanda na Eshiboni oyo Moyize mpe bana ya Isalaele balongaki tango babimaki na Ejipito. \v 47 Bazwaki mokili na ye mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani. Bakonzi nyonso mibale bazalaki bato ya Amori mpe bakonzaki na ngambo ya este ya Yordani. \v 48 Bana ya Isalaele bavandaki na etando oyo ebandaki na Aroeri, na ngomba Arinoni kino na ngomba Sirioni oyo babengi Erimoni ; \v 49 bakisa Araba nyonso na este ya Yordani kino na ebale monene ya Araba, na ebandeli ya ngomba Pisiga. \c 5 \s1 Nzambe apesaki mibeko zomi \p \v 1 Moyize abengisaki Isalaele mobimba mpe alobaki : « Oh Isalaele, yoka malamu bikateli mpe mibeko oyo nakoyebisa yo lelo. Yekola yango, batela yango mpe salela yango. \v 2 Yawe, Nzambe na biso, asalaki boyokani elongo na biso elongo na ngomba Orebi. \v 3 Yawe asalaki te boyokani oyo na bakoko na biso kasi asalaki yango nde na biso, biso nyonso oyo tozali na bomoi awa na mokolo ya lelo. \v 4 Yawe alobaki na bino kati na moto likolo ya ngomba ndenge moto alobanaka na moto miso na miso. \v 5 Na tango wana, natelemaki kati ya Yawe mpe bino mpo na koyebisa bino maloba na Yawe, pamba te bozalaki kobanga moto mpe bomataki te likolo ya ngomba. Tala maloba oyo alobaki : \b \li4 \v 6 ‹ Nazali Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo wuta na mokili ya Ejipito epai wapi ozalaki na bowumbu. \b \li1 \v 7 Okozalaka na banzambe mosusu te, bobele Ngai. \li1 \v 8 Okomisalelaka te nzambe ya ekeko to bililingi ya biloko oyo ezali na likolo, na se to na mayi oyo ezali na se ya mabele. \v 9 Okogumbamelaka yango te mpe okosalelaka yango te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nazali Nzambe ya zuwa ; napesaka bana etumbu mpo na masumu ya batata kino na molongo ya misato mpe ya minei ya bato oyo bayinaka Ngai. \v 10 Kasi natalisaka bolingo na Ngai kino na molongo ya nkoto epai ya bato oyo balingaka Ngai mpe babatelaka mibeko na Ngai. \li1 \v 11 Okotangaka te na pamba Kombo ya Yawe, Nzambe na yo, pamba te Yawe akopesa etumbu na moto nyonso oyo akotanga Kombo na Ye na pamba. \li1 \v 12 Kanisaka mokolo ya Saba mpe bulisaka yango, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo yango. \v 13 Okosalaka misala na yo nyonso mikolo motoba. \v 14 Kasi mokolo ya sambo ezali mokolo ya Saba ya Yawe, Nzambe na yo. Na mokolo wana, okosalaka mosala ata moko te, ezala yo, mwana na yo ya mobali, mwana na yo ya mwasi, mowumbu na yo ya mobali, mwasi mowumbu na yo, ngombe na yo, ane na yo, ebwele moko kati na bibwele na yo to mopaya oyo azali kati na bingumba na yo, mpo ete mosali na yo ya mobali mpe mwasi mosali na yo ya mwasi bakoka kopema ndenge yo ozali kopema. \v 15 Kanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito, mpe Yawe, Nzambe na bino, abimisaki bino kuna na loboko na Ye ya nguya mpe na loboko na Ye ya kosembolama. Yango wana, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete otosa mokolo ya Saba. \li1 \v 16 Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo mpo ete ozala na bomoi ya molayi, mpe ozala moto ya esengo kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo. \li1 \v 17 Okobomaka te. \li1 \v 18 Okosalaka ekobo te. \li1 \v 19 Okoyibaka te. \li1 \v 20 Okolobaka te matatoli ya lokuta mpo na kokosela moninga na yo makambo. \li1 \v 21 Okolulaka te mwasi ya moninga na yo ; okolulaka te ndako ya moninga na yo, elanga na ye, mowumbu na ye ya mobali to mwasi mowumbu na ye, ngombe na ye, ane na ye to eloko nyonso oyo ezali ya moninga na yo. › » \b \p \v 22 Oyo nde mibeko oyo Yawe alobaki na mongongo makasi kati na moto epai ya lisanga mobimba oyo ezalaki likolo ya ngomba kati na mapata mpe molili makasi ; mpe abakisaki ata likambo moko te. Bongo akomaki yango na bitando mibale ya mabanga mpe apesaki ngai yango. \p \v 23 Tango boyokaki mongongo kobima kati na molili, wana ngomba ezalaki kopela moto, bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bampaka na bino bayaki epai na ngai. \v 24 Balobaki : « Yawe, Nzambe na biso, alakisi biso nkembo na Ye mpe lokumu na Ye ; mpe toyoki mongongo na Ye wuta na moto. Lelo, tomoni ete moto akoki kozala na bomoi ata soki Nzambe asololi na ye. \v 25 Kasi sik’oyo mpo na nini tokufa kaka boye ? Moto ya monene oyo ekoki kozikisa biso mpe koboma biso soki tokobi koyoka mongongo na Yawe, Nzambe na biso, kolobela biso. \v 26 Pamba te nani kati na mokili akoki koyoka mongongo ya Nzambe na bomoi koloba kati na moto ndenge biso toyokaki bongo atikala na bomoi ? \v 27 Pusana pembeni mpe yoka makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba ; bongo na sima, okoyebisa biso makambo nyonso oyo Yawe, Nzambe na biso, akoloba na yo ; mpe biso tokoyoka mpe tokotosa yango. » \p \v 28 Yawe ayokaki bino tango boyebisaki ngai mpe alobaki na ngai : « Nayoki makambo oyo bato oyo balobi na yo. Nyonso oyo balobi ezali malamu. \v 29 Oh, soki mitema na bango ezalaki penza ya kobongama mpo na kobanga Ngai mpe kobatela mibeko na Ngai tango nyonso, mpo ete bakoka kozala tango nyonso malamu elongo na bana na bango ! \v 30 Kende, yebisa bango : ‹ Bozonga na bandako na bino. › \v 31 Kasi yo, vanda awa elongo na Ngai mpo ete napesa yo mibeko nyonso, bikateli nyonso, mpe mitindo nyonso oyo okoteya bango mpo ete basalela yango kati na mokili oyo nakopesa bango lokola libula. » \p \v 32 Yango wana, bosala keba na oyo nyonso Yawe, Nzambe na bino, atindi bino ; bobaluka te ezala na ngambo moko to na ngambo mosusu. \v 33 Botambola na banzela nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino mpo ete bozala na bomoi, mpo ete bozala bato ya esengo, mpe mpo ete bobakisa mikolo ya bomoi na bino kati na mokili oyo bokokamata. \c 6 \s1 Yawe, Nzambe ya Isalaele, azali kaka moko \p \v 1 Tala mibeko, bikateli mpe malako oyo Yawe, Nzambe na bino, atindi ngai koteya bino mpo ete bosalela yango kati na mokili oyo bokokota mpo na kokamata yango, \v 2 mpo ete yo, bana na yo mpe bakitani na yo, botosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokozala na bomoi na kobatelaka bikateli na Ye nyonso mpe mibeko oyo napesi bino mpo ete bozala na bomoi molayi. \v 3 Oh Isalaele, yoka malamu ! Senzela ete otosa yango mpo ete ozala malamu mpe bokoma ebele na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge Yawe Nzambe ya bakoko na bino alakaki bino. \p \v 4 Isalaele, yoka malamu ! Yawe azali Nzambe na biso, Yawe azali kaka moko. \p \v 5 Okolinga Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba, na molimo na yo mobimba mpe na makasi na yo nyonso. \v 6 Tika ete mibeko oyo napesi yo lelo, ewumela kati na motema na yo. \v 7 Okoteyaka yango na bana na yo tango ozali na ndako, tango ozali kotambola na nzela, tango olali mpe tango olamuki. \v 8 Kanga yango na maboko na yo lokola bilembo mpe tia yango na elongi na yo lokola elembo. \v 9 Koma yango na makonzi ya ndako na yo mpe na bikuke na yo. \p \v 10 Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo alapelaki ndayi epai ya bakoko na yo, epai ya Abrayami, Izaki, mpe Jakobi mpo na kopesa yo bingumba ya minene mpe ya malamu oyo yo otongaki te, \v 11 bandako etonda na biloko ya malamu ya ndenge na ndenge oyo yo otiaki te, mabulu ya mayi oyo yo otimolaki te, bilanga ya vino mpe ya olive oyo yo olonaki te ; boye tango okolia mpe okotonda ; \v 12 keba ete obosana Yawe te oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu. \v 13 Tosa Yawe, Nzambe na yo ; salela kaka Ye mpe lapa ndayi na yo na Kombo na Ye. \v 14 Kosalela banzambe mosusu te, banzambe ya bato oyo bazingeli yo ; \v 15 pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe ya zuwa, mpo ete asilikela yo te mpe abebisa yo te na mokili. \v 16 Komeka te Yawe, Nzambe na yo, ndenge osalaki na Masa. \v 17 Batela malamu mibeko, mitindo mpe bikateli ya Yawe, Nzambe na yo, oyo apesi yo. \v 18 Sala oyo ezali alima mpe malamu na miso ya Yawe, mpo ete ozala moto ya esengo, mpo ete okota, mpe mpo ete okamata mokili ya malamu oyo Yawe alakaki kopesa na bakoko na yo na nzela ya ndayi, \v 19 na kobengana banguna na yo nyonso liboso na yo, ndenge Yawe alobaki. \p \v 20 Na mikolo ekoya, soki mwana na yo ya mobali atuni yo : Mitindo, bikateli mpe mibeko oyo Yawe, Nzambe na biso, atinda yo, elingi kolakisa nini ? \v 21 Okoloba na ye : Tozalaki bawumbu ya Faraon na Ejipito, kasi Yawe abimisaki biso na Ejipito na loboko na ye ya nguya. \v 22 Yawe asalaki na miso na biso bilembo minene mpe bikamwa, ya minene mpe ya somo na Ejipito, na Faraon mpe na ndako na ye mobimba. \v 23 Kasi abimisaki biso kuna mpo na kokotisa biso mpe kopesa biso mokili oyo alakaki na bakoko na biso na ndayi oyo alapaki. \v 24 Yawe atindaki biso kotosa mibeko oyo nyonso mpe kobanga Yawe, Nzambe na biso, mpo ete tozala tango nyonso malamu mpe tozala na bomoi ndenge ezali lelo. \v 25 Mpe soki totosi malamu mibeko nyonso oyo, liboso ya Yawe, Nzambe na biso, ndenge atindaki biso, wana tokozala bato ya sembo. \c 7 \s1 Bato ya Isalaele babulisama mpo na Yawe Nzambe \p \v 1 Tango Yawe, Nzambe na yo, akokotisa yo na mokili oyo ozali kokende mpo na kozwa yango lokola libula mpe tango akobengana liboso na yo bikolo ebele—bato ya Iti, ya Girigazi, ya Amori, ya Kanana, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, bikolo sambo oyo eleki yo na motango ya bato mpe na makasi— \v 2 mpe tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, mpe tango okolonga bango, okobebisa bango nyonso mpe okotika ata ndambo te ; okosala ata boyokani moko te elongo na bango ; koyokela bango mawa te. \v 3 Okosangana ata moke te na bango na nzela ya libala, okopesa te na libala bana na yo ya basi epai ya bana na bango ya mibali, mpe okozwa te na libala bana na bango ya basi mpo na bana na yo ya mibali ; \v 4 noki te, bakopengwisa bana na yo ya mibali na miso na Ngai mpo ete basalela Ngai lisusu te kasi basalela banzambe mosusu, bongo Yawe akosilikela bino mpe akobebisa yo noki. \v 5 Tala makambo oyo bosengeli kosala bango : bokokweyisa bitumbelo na bango, bokopanza bikeko na bango, bokobuka makonzi ya nzambe mwasi Ashera mpe bokotumba na moto banzambe na bango ya bikeko, \v 6 pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe, Nzambe na bino, aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali na mokili mpo ete bozala bato na Ye, bozwi na Ye moko penza. \p \v 7 Ezali te mpo ete bozalaki mingi koleka bato mosusu nde Yawe alakisaki bino bolingo na Ye, bozalaki kutu moke koleka bato nyonso. \v 8 Kasi ezali mpo ete Yawe alingaka bino mpe abatelaka ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na bino. Yango wana, na loboko na Ye ya nguya, Yawe abimisaki bino mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu, na maboko ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. \p \v 9 Boye yeba ete Yawe, Nzambe na yo, azali Nzambe moko kaka ya solo ; azali Nzambe ya boyengebene, abatelaka boyokani mpe bolingo na Ye kino na molongo ya nkoto ya bakitani oyo balingaka Ye mpe babatelaka mibeko na Ye. \v 10 Kasi azelaka te kopesa etumbu na moto oyo ayinaka Ye mpe abomaka ye mbala moko. \v 11 Yango wana, bosala keba mpo na kosalela mitindo, bikateli mpe mibeko oyo napesi bino lelo. \p \v 12 Soki bokosala keba na mibeko oyo mpe bokosalela yango malamu, Yawe, Nzambe na bino, akobatela bolingo mpe boyokani na Ye elongo na bino ndenge alapaki ndayi epai ya bakoko na bino. \v 13 Akolinga bino mpe akopambola bino, akokomisa bino ebele, akopambola mabota na bino, mbuma ya mabele na bino : milona na bino, vino ya sika mpe mafuta ; akopambola bitonga ya bangombe na bino, bameme na bino mpe bantaba na bino kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino yango. \v 14 Bokopambolama koleka bato nyonso. Mobali moko te to mwasi moko te akozanga bana, mpe ebwele na yo moko te ekozanga bana. \p \v 15 Yawe akobatela yo na bokono nyonso, akobwakela yo ata bokono moko te oyo yo oyebaki te na Ejipito, kasi akokweyisa yango likolo ya bayini na yo. \p \v 16 Okoboma bato nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akokaba na maboko na yo ; okoyokela bango mawa te. Kosalela banzambe na bango te mpo ete yango ekozala motambo mpo na yo. \p \v 17 Tango mosusu okomilobela : « Bikolo oyo ezali makasi koleka biso, ndenge nini tokolonga kobengana yango ? » \v 18 Te ! Kobanga yango soki moke te ! Kanisa malamu makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, asalaki Faraon mpe Ejipito mobimba. \v 19 Omonaki na miso na yo komekama makasi, bilembo ya kokamwa mpe bikamwa, loboko ya nguya mpe loboko esembolama oyo na nzela na yango Yawe, Nzambe na yo, abimisaki yo na Ejipito. Yawe, Nzambe na yo, akosala ndenge moko epai ya bato oyo ozali kobanga. \v 20 Mpe kutu, Yawe, Nzambe na yo, akotindela bango banzoyi ya minene kino tango bato oyo bakotikala mpe bakobombama liboso na yo bakokufa. \v 21 Kolenga te liboso na bango, pamba te Yawe, Nzambe na yo, oyo azali kati na yo, azali Nzambe Monene mpe ya somo. \v 22 Yawe, Nzambe na yo, akobengana moke-moke bikolo oyo ezali liboso na yo ; okokoka te kosilisa bango na mbala moko, noki te banyama mabe ekokoma ebele zingazinga na yo. \v 23 Kasi Yawe, Nzambe na yo, akokaba bango na maboko na yo, akotia bango noki na mobulu monene kino bakobebisama. \v 24 Yawe akokaba bakonzi na bango na maboko na yo, mpe okolimwisa bakombo na bango na mokili ; moko te akokoka kotelemela yo, okobebisa bango. \v 25 Okotumba na moto banzambe na bango ya bikeko. Kolula te mpe kozwa te palata mpe wolo oyo ezali na likolo na yango, ekoki kozala motambo mpo na yo ; pamba te ezali nkele na miso ya Yawe, Nzambe na yo. \v 26 Kokotisa te mpe kolinga te eloko ya mbindo kati na ndako na yo. Okotia yango pembeni mpo na kobebisa yango nyonso. Zwa yango lokola eloko ya nkele mpe ya mbindo, pamba te etiami pembeni mpo na kobebisama. \c 8 \s1 Yawe ateyaki bato na Ye kati na esobe \p \v 1 Salela na bokebi mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo mpo ete bokoka kovanda, kokoma ebele, kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe alakaki epai ya bakoko na bino na nzela ya ndayi. \p \v 2 Kobosanaka te ndenge Yawe, Nzambe na yo, akambaki yo na mobembo nyonso kati na esobe mibu tuku minei, mpe ndenge abukaki lolendo na yo mpe amekaki yo mpo na koyeba mozindo ya motema na yo mpe kotala soki okotosa mibeko na Ye to te. \v 3 Abukaki lolendo na yo, abomaki yo nzala mpe aleisaki yo mana oyo yo mpe batata na yo botikalaki koyeba te, mpo na koteya yo ete moto abikaka kaka na lipa te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Yawe. \v 4 Bilamba na yo etikalaki konzuluka te mpe makolo na yo etikalaki kovimba te na mibu wana tuku minei. \v 5 Boye sosola ete Yawe, Nzambe na yo, azalaki koteya yo ndenge tata ateyaka mwana na ye. \v 6 Tosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na yo, na kotambolaka na banzela na Ye mpe na kopesaka Ye lokumu. \v 7 Pamba te Yawe, Nzambe na yo, azali kokotisa yo na mokili ya malamu, mokili oyo etonda na mayi, na mabulu ya mayi mpe na bitima oyo etiolaka na lubwaku mpe na bangomba ; \v 8 mokili oyo etonda na ble, na orje, na vino, na banzete ya figi, na banzete ya grenade ; mokili ya mafuta ya olive mpe ya nzoyi ; \v 9 mokili oyo bokozanga lipa te mpe eloko moko te ; mokili oyo mabanga ezali bibende mpe bokoki kobimisa motako\f + \fr 8.9 \fr*\ft Motako elakisi na lifalanse : cuivre.\ft*\f* na bangomba. \v 10 Tango bokolia mpe bokotonda, bosanzola Yawe, Nzambe na bino, mpo na mokili ya malamu oyo apesi bino. \p \v 11 Sala keba ete obosana te Yawe, Nzambe na yo, na kozanga kotosa mitindo na Ye, mibeko na Ye mpe bikateli na Ye oyo nazali kopesa yo lelo. \v 12 Tango okolia mpe okotonda, tango okotonga bandako ya kitoko mpe okovanda kuna, \v 13 tango bangombe na yo, bantaba na yo mpe bameme na yo ekobotana mingi, tango palata na yo mpe wolo na yo ekokoma ebele mpe biloko nyonso oyo ozali na yango ekokoma ebele ; \v 14 sala keba ete motema na yo etonda na lofundu te mpe obosana te Yawe, Nzambe na yo, oyo abimisaki yo na Ejipito, mokili ya bowumbu, \v 15 oyo akambaki yo na esobe ya monene mpe ya somo, na bitando ekawuka mpe ezanga mayi, etando etonda na banyoka ya ngenge mpe na koto\f + \fr 8.15 \fr*\ft Koto elakisi na lifalanse : scorpion.\ft*\f* mpe abimiselaki yo mayi ya komela wuta na libanga moko ya makasi. \p \v 16 Kati na esobe yango, apesaki yo mana mpo na kolia, bilei oyo batata na yo batikala koyeba te, mpo na kobuka lolendo na yo mpe komeka yo, mpo ete na suka, okoka komona bolamu. \v 17 Boye sala keba ete omilobela te : « Nguya na ngai moko mpe makasi ya maboko na ngai moko nde eboteli ngai bomengo oyo ! » \v 18 Mpo na yango, kobosanaka te ete ezali Yawe, Nzambe na yo, nde apesaki yo makoki ya kozwa bomengo oyo mpo na kolendisa boyokani na Ye, oyo asalaki elongo na bakoko na bino na nzela ya ndayi, ndenge ezali na mokolo ya lelo. \p \v 19 Soki obosani Yawe, Nzambe na yo, soki osaleli banzambe mosusu, soki ogumbameli mpe ofukameli yango, nalobi na bino solo lelo ete bokobebisama. \v 20 Bokobebisama solo lokola bikolo oyo Yawe abebisaki liboso na bino, mpo ete botosi te Yawe, Nzambe na bino. \c 9 \s1 Isalaele azalaki mpe libota ya batomboki \p \v 1 Oh Isalaele, yoka malamu ! Okomi sik’oyo pene ya kokatisa Yordani mpo na kokota mpe kobengana bikolo oyo eleki yo na monene mpe na makasi, bikolo oyo evandaka kati na bingumba minene oyo ezali na bamir batonga makasi mpe ekenda kino na likolo. \v 2 Bato yango bazali makasi mpe bingambe, bana ya Anaki ! Oyebi bango mpe osila koyoka bato koloba na tina na bango : « Nani akoki kotelema liboso ya bana ya Anaki ? » \v 3 Kasi lelo, yeba malamu ete Yawe, Nzambe na yo, azali Ye moko kotambola liboso na yo lokola moto oyo ezikisaka ; akobebisa bango mpe akobuka bango liboso na yo ; bongo yo okokamata mabele na bango mpe okosilisa bango noki-noki, ndenge Yawe alakaki yo. \p \v 4 Tango Yawe, Nzambe na yo, akosilisa kobengana bango liboso na yo, komilobela te kati na motema na yo : « Ezali mpo na bosembo na ngai nde Yawe amemaki ngai mpo ete nakamata mokili oyo. » Te, ezali bongo te ! Ezali nde mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe abengani yango liboso na yo. \v 5 Ezali te mpo na bosembo na yo to mpo ete otambolaki alima nde okokota mpo na kozwa mokili na bango, kasi ezali solo mpo na mabe ya bikolo yango nde Yawe, Nzambe na yo, akobengana yango liboso na yo, mpo na kokokisa ndayi oyo alapaki epai ya bakoko na yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi. \v 6 Boye sosola malamu ete ezali te mpo na bosembo na yo nde Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo mokili oyo ya malamu mpo ete okamata yango, pamba te yo mpe ozali libota ya batomboki. \s1 Mwana ngombe ya wolo ezalaki mbeba ya bato \p \v 7 Kanisaka malamu likambo oyo mpe kobosanaka te ndenge nini opelisaki kanda ya Yawe, Nzambe na yo, kati na esobe : banda mokolo oyo bobimaki wuta na Ejipito kino bokomaki na esika oyo, bozalaki kaka kotosa Yawe te. \p \v 8 Na ngomba Orebi, bopesaki Yawe kanda makasi mpe asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino. \v 9 Tango namataki likolo ya ngomba mpo na kozwa bitando ya mabanga ya boyokani oyo Yawe asalaki elongo na bino, natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ; naliaki lipa te mpe namelaki mayi te. \v 10 Yawe apesaki ngai bitando mibale ya mabanga oyo mosapi ya Nzambe ekomaki. Na likolo na yango, ezali na mibeko nyonso Yawe oyo ayebisaki bino likolo ya ngomba longwa kati na moto, na mokolo oyo bosanganaki. \p \v 11 Na suka ya mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, Yawe apesaki ngai bitando yango mibale ya mabanga ya boyokani. \v 12 Bongo Yawe alobaki na ngai : « Kende, kita mbangu na ngomba oyo, pamba te bato na yo, oyo obimisaki na Ejipito bamikomisi mbindo ; bapesi noki mokongo na mibeko oyo napesaki bango mpe bamisaleli ekeko ya ebende banyangwisa na moto. » \v 13 Mpe Yawe alobaki na ngai : « Natali malamu bato oyo ; bazali penza libota ya batomboki ! \v 14 Tika Ngai kosala : nakobebisa bango mpe nakolimwisa bakombo na bango kati na mokili, kasi nakokomisa yo ekolo ya nguya mpe ya bato ebele koleka bango. » \v 15 Bongo nabalukaki mpe nakitaki wuta na ngomba oyo ekomaki kopela moto ; nasimbaki na maboko na ngai bitando mibale ya mabanga ya boyokani. \v 16 Tango natalaki, namonaki ete bosalaki solo masumu epai na Yawe, Nzambe na bino : bomisalelaki ekeko ya mwana ngombe ya ebende banyangwisa na moto ; bopengwaki noki na nzela oyo Yawe atindaki bino. \v 17 Boye, nazwaki bitando yango mibale ya mabanga, nabwakaki yango wuta na maboko na ngai mpe napanzaki yango na biteni na miso na bino. \p \v 18 Bongo nakweyaki mbala moko liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, naliaki lipa te mpe namelaki mayi te mpo na lisumu monene oyo bosalaki wana bosalaki mabe na miso ya Yawe mpe, na bongo, bopesaki Ye kanda. \v 19 Nabangaki kanda mpe kotomboka ya Yawe, pamba te asilikelaki bino makasi kino akomaki na posa ya kobebisa bino ; kasi Yawe ayokelaki ngai lisusu. \v 20 Yawe asilikelaki mpe Aron makasi kino alingaki koboma ye ; kasi na tango wana, nabondelaki mpe mpo na Aron. \v 21 Nazwaki lisusu eloko oyo ememisaki bino masumu, ekeko ya mwana ngombe oyo bosalaki, natumbaki yango na moto, natutaki mpe nanikaki yango malamu kino ekomaki putulu ; mpe nabwakaki putulu yango na mayi oyo ezalaki kotiola wuta na ngomba. \p \v 22 Na Tabeera, na Masa, na Kibiroti-Atava, bokobaki kaka kopesa Yawe kanda. \v 23 Mpe tango Yawe alingaki ete bolongwa na Kadeshi-Barinea, apesaki bino mitindo : « Bokende ! Bokamata mokili oyo napesi bino. » Kasi botosaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bino ; botiaki elikya te kati na Ye mpe botosaki Ye te. \v 24 Wuta mokolo oyo nayeba bino, botikala te kotosa Yawe. \p \v 25 Nakweyaki liboso ya Yawe mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei, pamba te Yawe azalaki koloba ete akoboma bino. \v 26 Nabondelaki Yawe mpe nalobaki : « Nkolo Yawe, kobebisa bato na Yo te, bazali libula na Yo moko oyo osikolaki na nguya monene na Yo mpe obimisaki na Ejipito na loboko na Yo ya nguya. \v 27 Kanisa basali na Yo Abrayami, Izaki mpe Jakobi ! Kotala te botomboki ya bato oyo, mabe na bango mpe masumu na bango ; \v 28 noki te bato ya mokili oyo longwa kuna obimisaki biso, bakoloba : ‹ Ezali mpo ete Yawe azalaki na makoki te ya kokotisa bango na mokili oyo alakaki bango to ezali mpo ete azalaki koyina bango, yango wana abimisaki bango wuta na Ejipito mpo na koboma bango na esobe. › \v 29 Nzokande bazali bato na Yo mpe libula na Yo, oyo obimisaki na nguya monene na Yo mpe na loboko na Yo ya nguya. » \c 10 \s1 Yawe alimbisaki bato na Ye \p \v 1 Na tango wana, Yawe alobaki na ngai : « Bongisa bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso mpe mata epai na ngai na likolo ya ngomba ; okosala lisusu sanduku ya mabaya. \v 2 Nakokoma na bitando yango maloba oyo ezalaki na likolo ya bitando ya mabanga ya liboso, oyo obukaki ; mpe okotia bitando yango kati na sanduku. » \v 3 Boye nasalaki sanduku na mabaya ya nzete ya akasia mpe nabongisaki bitando mibale ya mabanga lokola oyo ya liboso. Namataki likolo ya ngomba, namemaki bitando mibale ya mabanga, na maboko na ngai. \v 4 Yawe akomaki likolo ya bitando yango maloba oyo akomaki liboso : mibeko zomi oyo Yawe ayebisaki bino na likolo ya ngomba kati na moto, na mokolo ya mayangani ; mpe Yawe apesaki ngai yango. \v 5 Boye nakitaki wuta na ngomba mpe natiaki bitando yango mibale ya mabanga kati na sanduku oyo nasalaki ndenge Yawe atindaki ngai mpe ezali kuna sik’oyo. \p \v 6 Bana ya Isalaele batambolaki wuta na mabulu ya mayi ya Bene-Yaakani kino na Mosera. Aron akufaki kuna mpe bakundaki ye. Mpe Eleazari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye lokola Nganga-Nzambe. \v 7 Longwa wana, bakendeki na Gudigoda ; sima bakendeki na Yotibata, mokili ya miluka ebele. \v 8 Na tango wana, Yawe atiaki pembeni libota ya Levi mpo na komemaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpo na kotelemaka liboso ya Yawe, mpo na kosalaka mosala na Ye mpe mpo na kopambolaka bato na Kombo na Ye ndenge bazali kosala kino lelo. \v 9 Yango wana, bana ya Levi bazali na ndambo ya mabele te to libula te kati na bandeko na bango : Yawe nde azali libula na bango, ndenge Yawe, Nzambe na bino, alobaki na bango. \p \v 10 Boye natikalaki likolo ya ngomba mikolo tuku minei mpe babutu tuku minei ndenge nasalaki na mbala ya liboso, mpe Yawe ayokelaki ngai na mbala oyo lisusu, pamba te kobebisa bino ezalaki mokano na Ye te. \v 11 Na sima, Yawe alobaki na ngai : « Kende mpe kamba bato oyo mpo ete bakota mpe bakamata mokili oyo nalakaki kopesa epai na batata na bango na nzela ya ndayi. » \s1 Yawe asengaki na Isalaele botosi \p \v 12 Sik’oyo, Oh Isalaele, likambo nini Yawe, Nzambe na yo, azali kozela epai na yo ? Yawe, Nzambe na yo, azali kozela ete otosa Yawe, Nzambe na yo, na kotambola na banzela na Ye nyonso, na kolinga Ye mpe kosalela Yawe, Nzambe na yo, na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba, \v 13 mpe ete obatela mibeko mpe bikateli ya Yawe, oyo nazali kopesa yo na mokolo ya lelo mpo na bolamu na yo moko. \v 14 Yawe, Nzambe na yo, nde azali Nkolo ya likolo, ya likolo koleka likolo, ya mabele mpe ya nyonso oyo ezali kati na yango. \v 15 Nzokande, Yawe alakisaki bolingo na Ye epai ya batata na bino mpe alingaki bango. Yango wana aponaki bino, bino bakitani na bango, kati na bikolo nyonso ndenge ezali lelo. \v 16 Bopetola mitema na bino, oyo etonda na masumu mpe botombokela lisusu Yawe te ; \v 17 pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali Nzambe ya banzambe, Nkolo ya bankolo, Nzambe Monene, Nzambe ya nguya mpe ya somo, oyo aponaka bilongi te mpe azwaka kanyaka te, \v 18 abundelaka mwana etike mpe mwasi oyo akufisa mobali, alingaka mopaya mpe apesaka ye bilei mpe bilamba. \v 19 Bino mpe bosengeli kolinga bapaya, pamba te bino mpe bozalaki bapaya na Ejipito. \p \v 20 Tosa Yawe, Nzambe na yo, mpe salela Ye ; kangama na Ye mpe lapaka ndayi na Kombo na Ye. \v 21 Azali masanzoli na yo, azali Nzambe na yo, oyo asalelaka yo makambo minene mpe makambo ya somo oyo omonaki na miso na yo moko. \v 22 Bakoko na yo nyonso oyo bakendeki na Ejipito bazalaki tuku sambo ; mpe sik’oyo, Yawe, Nzambe na yo, akomisi bino ebele lokola minzoto ya likolo. \c 11 \s1 Yawe asalaki makambo mpo na bato \p \v 1 Boye, okolinga Yawe, Nzambe na yo, mpe okobatela tango nyonso malako na Ye, bikateli na Ye mpe mitindo na Ye. \v 2 Nazali koloba na bana na bino te oyo batikalaki te koyeba to komona nyonso wana, kasi na bino oyo bozali awa lelo ete bobosanaka te malako ya Yawe, Nzambe na bino, monene na Ye, nguya na Ye, \v 3 bilembo mpe bikamwa oyo asalaki kati na Ejipito, epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe epai ya mokili na ye mobimba, \v 4 makambo oyo asalaki na mampinga ya Ejipito, na bampunda mpe bashar na yango, ndenge azindisaki yango kati na Ebale monene ya barozo, tango ezalaki kolanda bino, mpe ndenge nini Yawe alimwisaki yango libela ; \v 5 makambo oyo asalelaki bino kati na esobe kino bokoma na esika oyo, \v 6 makambo oyo asalaki na Datani mpe Abirami, bana mibali ya Eliabi, na libota ya Ribeni, tango mabele efungolaki monoko na yango mpe emelaki bango elongo na mabota na bango, bandako na bango mpe bato nyonso oyo bazalaki sima na bango kati na Isalaele mobimba. \v 7 Ezali bino nde bato bomonaki na miso na bino moko makambo nyonso ya minene oyo Yawe asalaki. \v 8 Yango wana, bobatela mibeko nyonso oyo napesi bino lelo mpo ete bozala makasi mpe bokoka kobotola mokili oyo bolingi kokota mpo na kozwa \v 9 mpe kowumela mingi kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na bino mpe epai ya bakitani na bango, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. \p \v 10 Mokili oyo ozali kokota mpo na kozwa ekokani te na mokili ya Ejipito epai wapi bowutaki. Kuna, bozalaki kolona bambuma mpe koyeisa mayi na bilanga na kosalaka banzela ya mayi na makolo na bino. \v 11 Kasi mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa ezali mokili ya bangomba mpe ya mabwaku, mokili oyo mvula enokaka wuta na likolo. \v 12 Ezali mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, abatelaka ; miso ya Yawe, Nzambe na yo, ezalaka tango nyonso likolo na yango wuta na ebandeli kino na suka ya mobu. \p \v 13 Soki bokotosa na boyengebene mibeko oyo napesi bino lelo ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kosalela Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba, \v 14 nakonokisa kati na mokili na bino mvula na tango na yango, mvula ya ebandeli ya eleko mpe mvula ya suka ya eleko, mpo ete bokoka kobuka mbuma ya malamu, bokoka kozwa vino ya sika mpe mafuta. \v 15 Nakokolisa matiti kati na bilanga mpo na bibwele na bino mpe bokolia mpe bokotonda. \p \v 16 Bosala keba ete bokosama te mpe bopengwa te na kogumbamelaka banzambe mosusu mpe na kofukamelaka yango, \v 17 noki te Yawe akosilikela bino, akokanga likolo mpo ete enokisa lisusu mvula te mpe mabele ekobota lisusu te mbuma na yango ; na bongo bokolimwa kati na mokili ya malamu oyo Yawe apesi bino. \v 18 Bobatela malamu kati na mitema mpe milimo na bino maloba na ngai oyo, bokanga yango na maboko na bino lokola bilembo, mpe botia yango na bilongi na bino lokola elembo. \v 19 Boteya yango na bana na bino na kolobelaka bango yango tango bovandi kati na bandako mpe tango bozali kotambola na nzela, tango bolali pongi mpe tango bolamuki. \v 20 Bokoma yango na makonzi ya bandako na bino mpe na bikuke na bino \v 21 mpo ete mikolo na bino mpe mikolo ya bakitani na bino ezala ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bino na nzela na ndayi tango nyonso oyo mokili ekowumela. \p \v 22 Soki bobateli malamu mibeko nyonso oyo napesi bino mpo na kosalela, na kolingaka Yawe, Nzambe na bino, na kotambolaka na banzela na Ye nyonso mpe na kokangamaka na Ye ; \v 23 wana Yawe akobengana liboso na bino bikolo oyo nyonso, mpe bokobotola bikolo oyo eleki bino na monene mpe na makasi. \v 24 Esika nyonso makolo na bino ekonyata, ekozala ya bino. Mokili na bino ekobanda wuta na esobe kino na Libani, wuta na Ebale Efrate kino na este ya Ebale monene. \v 25 Moto moko te akolonga kotelemela bino. Ndenge Yawe Nzambe alakaki bino, akotia somo mpe kobanga kati na mokili mobimba, na esika nyonso oyo bokokende. \b \p \v 26 Tala, natie lelo liboso na bino mapamboli mpe bilakeli mabe. \v 27 Mapamboli, soki botosi mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, oyo napesi bino lelo ; \v 28 bilakeli mabe, soki boboyi kotosa mibeko ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bopengwi na nzela oyo natindi bino lelo, na kosalelaka banzambe mosusu oyo bino botikalaki koyeba te. \p \v 29 Tango Yawe, Nzambe na bino, akokotisa bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa, bosengeli kotatola mapamboli na ngomba Garizimi, mpe bilakeli mabe, na ngomba Ebali. \v 30 Bangomba nyonso mibale ezali na ngambo mosusu ya Yordani, ngambo ya weste, na mokili ya bato ya Kanana oyo bavandaka na etando ya Yordani, etalana na Giligali, pembeni ya banzete minene ya More. \v 31 Kala mingi te, bokokatisa Yordani mpo na kokota mpe kozwa mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino. Tango bokobotola yango mpe bokowumela kati na yango, \v 32 bosala keba ete botosa bikateli nyonso mpe mibeko nyonso oyo nazali kotia liboso na bino lelo. \c 12 \s1 Moyize ayebisaki na bato mibeko ya Yawe \p \v 1 Tala bikateli mpe mibeko oyo bosengeli kosalela malamu kati na mokili oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, azali kopesa bino mpo na kozwa, na tango nyonso oyo bokowumela kati na mokili yango. \p \v 2 Bobebisa bisika nyonso oyo bato ya bikolo oyo bozali kobengana bazalaki kogumbamela banzambe na bango na likolo ya bangomba ya milayi mpe ya mikuse mpe na se ya banzete nyonso oyo ezali na makasa ya mobesu. \v 3 Bokweyisa bitumbelo na bango, bobuka mabanga na bango ya bule, botumba na moto makonzi na bango ya bule, bopanza na biteni bikeko ya banzambe na bango mpe bolimwisa bakombo na bango na bisika wana. \v 4 Nzokande mpo na bino, bosengeli te kogumbamela Yawe, Nzambe na bino, na lolenge na bango. \v 5 Bosengeli koluka esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona kati na bikolo na bino nyonso mpo na kotia Kombo na Ye mpe mpo na kokomisa yango esika na Ye. Ezali na esika yango kaka nde bosengeli kokende. \v 6 Ezali kuna nde bokomema bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, eteni na bino ya zomi, bakado ya ndenge na ndenge, makabo mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokokata kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko mpe bana mibali ya liboso ya bangombe, ya bameme mpe ya bantaba na bino. \v 7 Kaka na esika yango, na miso ya Yawe, Nzambe na bino, bino mpe mabota na bino bokolia mpe bokosepela na eloko nyonso oyo bokosala na maboko na bino ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino. \p \v 8 Bosengeli lisusu te kosala ndenge tozali kosala awa, na mokolo ya lelo : moto nyonso azali kosala ndenge alingi. \v 9 Pamba te kino lelo, bokoti nanu te na esika ya bopemi mpe bozwi nanu te libula oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino. \v 10 Kasi bokokatisa Yordani mpe bokovanda na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa bino lokola libula. Akopesa bino bopemi na kokangolaka bino na maboko ya banguna na bino nyonso oyo bazingeli bino, mpe bokovanda na kimia. \v 11 Boye, na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokomema eloko nyonso oyo natindi bino : bambeka na bino ya kotumba, makabo na bino, biteni na bino ya zomi, bakado na bino ya ndenge na ndenge mpe biloko nyonso ya kitoko oyo bozali na yango, oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa epai na Yawe. \v 12 Kuna kaka nde bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino ; bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, mpe Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino, pamba te bazangi eteni ya mabele to libula kati na bino. \p \v 13 Bosala keba ete bobonza te bambeka na bino ya kotumba na bisika nyonso oyo bokomona. \v 14 Bokobonza bambeka yango kaka na esika oyo Yawe akopona kati na moko ya bikolo na bino, mpe kuna kaka nde bokosala makambo nyonso oyo natindi bino. \v 15 Nzokande, bokoki kokata kingo ya bibwele na bino mpe kolia misuni na yango ndenge bolingi kati na bingumba na bino nyonso, ezala mboloko to pambi, kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino. Moto ya mbindo to moto ya peto akoki na ye kolia yango. \v 16 Kasi bosengeli te kolia makila ; bosopa yango lokola mayi na mabele. \p \v 17 Bosengeli te kolia kati na bingumba na bino eteni ya zomi ya bambuma na bino, ya vino na bino ya sika, ya mafuta na bino, bana ya liboso ya bangombe na bino, ya bameme na bino, ya bantaba na bino to makabo nyonso oyo bopesaki mpo na kokokisa ndayi, makabo oyo bokataki kopesa wuta na mokano ya mitema na bino moko to makabo ya ndenge na ndenge. \v 18 Kasi bokolia yango kaka na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo Yawe Nzambe akopona : bino, bana na bino ya mibali mpe ya basi, bawumbu na bino ya mibali, basi bawumbu na bino, Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpe bokosepela liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na mosala nyonso oyo maboko na bino ekosala. \v 19 Tango nyonso bokovanda kati na mokili na bino, bosala keba ete bobosana Balevi te. \p \v 20 Tango Yawe, Nzambe na bino, akokomisa mokili na bino monene ndenge alakaki bino mpe tango bokozala na posa ya kolia mosuni mpe bokoloba : « Nazali na posa ya kolia mosuni, » bokolia yango ndenge bolingi. \v 21 Soki esika oyo Yawe, Nzambe na bino, aponi mpo na kotia Kombo na Ye ezali mosika mingi mpo na bino, wana bokokata kingo ya bangombe na bino, ya bantaba na bino, ya bameme na bino, oyo Yawe apesaki bino ndenge natindaki bino mpe bokoki kolia yango ndenge bolingi kati na bingumba na bino. \v 22 Bokolia yango ndenge baliaka pambi to mboloko ; moto nyonso, azala mbindo to peto, akoki na ye kolia yango. \v 23 Kasi bosala keba ete bolia makila te, pamba te makila ezali bomoi, mpe bosengeli te kolia bomoi elongo na nyama. \v 24 Bosengeli te kolia makila ; kasi bosopa yango na mabele ndenge basopaka mayi. \v 25 Bolia yango te mpo ete bomona bolamu, bino mpe bana na bino ; na nzela wana nde bokosala oyo ezali alima na miso ya Yawe. \p \v 26 Kasi bokozwa biloko na bino ya bule mpe biloko nyonso oyo bolapaki ndayi mpo na kopesa, mpe bokokende na esika oyo Yawe akopona. \v 27 Bokotumba mosuni mpe makila ya bambeka na bino ya kotumba na etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bokosopa makila ya bambeka na bino mosusu na etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino ; kasi mpo na mosuni na yango, bokoki na bino kolia yango. \p \v 28 Bosala keba mpo na kotosa mibeko oyo nazali kopesa bino mpo ete bomona bolamu tango nyonso, bino mpe bana na bino, pamba te na nzela wana nde bokosala oyo ezali malamu mpe alima na miso ya Yawe, Nzambe na bino. \p \v 29 Yawe, Nzambe na bino, akolimwisa na liboso na bino bikolo oyo bozali kokende kobundisa mpe kobotola. Kasi tango bokobengana bango mpe bokovanda na bamboka na bango, \v 30 mpe tango bokosilisa kobebisa bango liboso na bino, bosala keba ete bokweya te na motambo na bango ya kosalela banzambe na bango mpe na motambo ya koluka koyeba na komitunaka : « Ndenge nini bikolo oyo esalelaka banzambe na bango ? Tokosala ndenge moko mpe kati na bingumba na biso. » \v 31 Bokoki te kogumbamela Yawe, Nzambe na bino, ndenge bango basalaka. Pamba te Yawe amonaka yango lokola likambo ya nkele mpe ayinaka makambo oyo basalaki mpo na banzambe na bango : bazalaki ata kotumbaka na moto bana na bango ya mibali mpe ya basi lokola mbeka mpo na banzambe na bango. \s1 Moyize apekisaki kogumbamela banzambe mosusu \p \v 32 Tala, bosala nyonso oyo natindi bino, bobakisa to bolongola ata eloko moko te. \c 13 \p \v 1 Soki mosakoli moko to moto moko oyo amonaka makambo abimi kati na bino mpe asakoleli bino bilembo minene mpe bikamwa, \v 2 mpe soki bilembo minene mpe bikamwa oyo asakolaki ekokisami mpe alobi na bino : « Tika ete tosalela mpe togumbamela banzambe mosusu, » nzokande bino boyebi banzambe yango te, \v 3 bosengeli te koyoka maloba ya mosakoli wana to ya moto wana oyo amonaka makambo. Yawe, Nzambe na bino, akomeka bino mpo na kotala soki bolingi Ye na motema na bino mobimba mpe na molimo na bino mobimba. \v 4 Bosengeli kosambela mpe kokumisa kaka Yawe, Nzambe na bino ; bobatela mitindo na Ye, botosa Ye mpe bokangama na Ye. \v 5 Mosakoli to moto wana oyo amonaka makambo, esengeli baboma ye, pamba te azali koteya mpo ete botombokela Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito mpe asikolaki bino na mokili ya bowumbu. Moto wana azalaki nde na posa ya kopengwisa bino na nzela oyo Yawe, Nzambe na bino, atindaki bino kolanda. Boye, bosengeli kolongola mabe kati na bino. \p \v 6 Soki ndeko na yo moko ya mobali to ya mwasi, mwana na yo ya mobali to ya mwasi, mwasi oyo yo olingaka to moninga na yo ya motema alingi kokosa yo na nkuku na koloba : « Tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo bino mpe bakoko na bino botikalaki koyeba te, \v 7 banzambe ya bato oyo bazingeli bino, oyo bazali pembeni to mosika, wuta na suka moko ya mokili kino na suka mosusu), \v 8 koyoka ye te mpe kondima ye te. Koyokela ye mawa te, kobikisa ye te mpe kobomba ye te. \v 9 Ya solo, osengeli koboma ye na mabanga. Loboko na yo ekozala loboko ya liboso mpo na kobamba ye mabanga mpe sima maboko ya bato nyonso. \v 10 Boboma ye na mabanga, pamba te alingaki kopengwisa bino mosika na Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, mokili ya bowumbu. \v 11 Boye, Isalaele nyonso ekoyoka mpe ekobanga, bongo moto moko te kati na bino akosala lisusu makambo mabe ya lolenge oyo. \p \v 12 Soki oyoki bato koloba na tina na moko kati na bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mpo na kovanda \v 13 ete bato mabe bamonani kati na yango, batindiki bato ya engumba na bango mpe balobi na bango : « Tika ete tokende kogumbamela banzambe mosusu, » banzambe oyo oyebaki te, \v 14 wana osengeli koluka koyeba, kotuna mpe kotala malamu-malamu. Soki ezali ya solo mpe emonani ete likambo yango ya mbindo esalemaki penza kati na yo, \v 15 osengeli solo koboma na mopanga bavandi nyonso ya engumba yango. Osengeli kobebisa yango nyonso : bato na yango mpe bibwele na yango. \v 16 Okosangisa biloko nyonso ya engumba yango oyo bobotoli na esika oyo bato nyonso bakutanaka mpe okotumba engumba nyonso mpe biloko na yango nyonso oyo bobotolaki lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe, Nzambe na bino. Ekotikala mopiku ya mabanga mpo na libela, ekoki kotongama lisusu te. \v 17 Eloko moko te kati na biloko oyo epesama lokola ekila ekoki komonana na maboko na yo, mpo ete Yawe Nzambe apelisela yo lisusu te kanda na Ye ya makasi, kasi atalisa yo ngolu na Ye, ayokela yo mawa mpe akomisa yo ebele ndenge alakaki yango epai ya bakoko na yo na nzela ya ndayi, \v 18 soki otosi Yawe, Nzambe na yo, obateli mibeko na Ye nyonso oyo nazali kopesa yo lelo mpe otamboli na bosembo na miso Ye. \c 14 \s1 Moyize apekisaki bokoko ya matanga \p \v 1 Bozali bana ya Yawe, Nzambe na bino : Bokoki te komikata nzoloko mpe kokokola suki ya mito na bino soki moto akufi, \v 2 pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Yawe aponaki bino kati na bato nyonso oyo bazali kati na mokili mpo ete bozala libota ya motuya mpo na Ye. \s1 Moyize apekisaki kolia banyama ya mbindo \p \v 3 Bokoki te kolia ata eloko moko ya mbindo. \v 4 Tala banyama oyo bokoki kolia : ngombe, meme, ntaba, \v 5 mbuli, mboloko, pambi, ntaba ya zamba, meme ya zamba, mbita mpe mpakasa. \v 6 Bokoki lisusu kolia nyama nyonso oyo ezali na litindi epasuka na kati-kati mpe ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu. \v 7 Kasi, kati na banyama oyo ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati, tala banyama oyo bosengeli te kolia : shamo, mpanya ya matoyi milayi\f + \fr 14.7 \fr*\ft Mpanya ya matoyi milayi elakisi na lifalanse : lièvre.\ft*\f* mpe mpanya ya zamba\f + \fr 14.7 \fr*\ft Mpanya ya zamba elakisi na lifalanse : daman.\ft*\f* ; pamba te ezongisaka na monoko biloko oyo ewuti na libumu, kasi litindi na yango epasuka te na kati-kati : ezali mbindo mpo na bino. \v 8 Nzokande ngulu ezali na litindi epasuka na kati-kati kasi ezongisaka te na monoko biloko oyo ewuti na libumu. Boye, ngulu ezali mbindo ; bosengeli te kolia mosuni na yango to kosimba ebembe na yango. \p \v 9 Kati na bikelamu nyonso oyo evandaka na mayi, bokoki kolia nyonso oyo ezali na binyanyeli mpe biteku. \v 10 Kasi bokolia te nyonso oyo ezangi binyanyeli mpe biteku : ezali mbindo mpo na bino. \p \v 11 Bokolia ndeke nyonso oyo ezangi mbindo. \v 12 Kasi tala bandeke oyo bokolia te : mpongo, engondo, mpongo ya ebale monene, \v 13 kombekombe ya mwindo, bandeke ya lolenge nyonso oyo eliaka misuni, nzengo ya lolenge nyonso, \v 14 bayanganga ya lolenge nyonso : \v 15 maligbanga, kumu, ndeke ya ebale monene mpe bakombekombe ya lolenge nyonso. \v 16 Esulungutu, esulungutu ya monene, esulungutu ya pembe, \v 17 libeke, ndeke oyo eliaka misuni ya kopola, libata ya mayi, \v 18 nkoko, mokwela ya lolenge nyonso, kengele mpe lolema. \p \v 19 Bokoki kolia te banyama nyonso ya mike-mike oyo ezali na mapapu, ezali mbindo mpo na bino. \v 20 Nzokande, bokoki kolia nyonso oyo ezali na mapapu mpe ezangi mbindo. \p \v 21 Bokoki kolia te nyama oyo bokuti ya kokufa ; bokopesa yango epai ya mopaya oyo azali kovanda kati na engumba na bino ; ye akoki na ye kolia yango ; soki te bokoki na bino koteka yango epai ya moleki nzela, pamba te bozali libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokoki te kolamba mwana ntaba oyo ezali nanu komela mabele. \s1 Mibeko na tina na eteni ya zomi \p \v 22 Mibu nyonso, bokotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo bilanga na bino ekobota. \v 23 Na miso ya Yawe, Nzambe na bino, mpe na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye, bokolia eteni ya zomi ya ble na bino, ya vino ya sika mpe ya mafuta, bana nyonso ya liboso ya bangombe na bino, ya bantaba na bino mpe ya bameme na bino. Na bongo, bokoyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino. \v 24 Kasi soki esika yango ezali mosika mingi mpo na yo komema eteni na yo ya zomi epai na Yawe, Nzambe na yo, pamba te esika oyo Yawe aponaki mpo na kotia Kombo na Ye ezali mosika mingi, wana Nzambe na yo apamboli yo, \v 25 okoteka eteni na yo ya zomi ; bongo mbongo oyo okozwa, okokende na yango na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. \v 26 Okosalela mbongo yango mpo na kosomba eloko nyonso oyo olingi : ngombe, meme, ntaba, vino to masanga nyonso oyo elangwisaka to eloko nyonso oyo olingi. Bongo yo elongo na ndako na yo mobimba, bokoki kolia yango na esika wana, liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okosepela elongo na libota na yo. \v 27 Kobosana te Balevi oyo bazali kati na bingumba na bino mpo ete bazali ata na eteni ya mabele te to libula mpo na bango moko. \p \v 28 Na suka ya mibu misato nyonso, bokomema biteni ya zomi nyonso ya mibu wana mpe bokobomba yango na bingumba na bino. \v 29 Na bongo, Balevi oyo bazali na eteni ya mabele te to na libula te mpo na bango moko elongo na bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bavandaka na bingumba na bino, bakoya kolia mpe kotonda mpo ete Yawe, Nzambe na bino, akoka kopambola bino na misala na bino nyonso ya maboko. \c 15 \s1 Mobu ya kosundola baniongo mpe ya kotika bawumbu \p \v 1 Na suka ya mibu sambo nyonso, bosengeli kosundola baniongo. \v 2 Tala ndenge esengeli kosalema : moto nyonso oyo adefisaki ndeko na ye, mwana ya Isalaele, mbongo, asengeli kotikela ye yango. Asengeli te kosenga eloko epai ya ndeko to moninga na ye, moto ya Isalaele, pamba te tango ya kotika baniongo mpo na lokumu na Yawe esili kokoka. \v 3 Bokoki kosenga niongo epai ya mopaya, kasi bosengeli kosundola baniongo nyonso oyo bandeko na bino badefaki epai na bino. \v 4 Nzokande, ebongaki te ete mobola azala kati na bino ; pamba te kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango lokola libula, akopambola bino koleka, \v 5 soki botosi malamu Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli malamu mitindo oyo nazali kopesa bino lelo. \v 6 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akopambola bino ndenge alakaki ; mpe bino bokodefisa na bikolo ebele, kasi bokodefa te. Bokokonza bikolo ebele, kasi ekolo moko te ekokonza bino. \p \v 7 Soki mobola moko amonani kati na bandeko na yo na bingumba ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kopesa yo ; okokangela ye motema te mpe okoboya te kosunga ndeko na yo mobola. \v 8 Nzokande, okofungolela ye maboko mpe okodefisa ye na motema moko, nyonso oyo akozala na yango na bosenga. \v 9 Keba ete motema na yo ezala na makanisi ya mabe te mpe eloba na yo te : « Mobu ya sambo ekomi pene, mobu ya kotika baniongo, » mpo ete otala ndeko na yo mobola na ndenge ya mabe mpe ozanga kopesa ye eloko. Mpe wana ye akolelalela epai na Yawe na tina na yo, okomema ngambo ya masumu na yo. \v 10 Osengeli kopesa ye na motema ya esengo kasi na mitema mibale te ; bongo Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na misala na yo nyonso mpe na eloko nyonso oyo maboko na yo ekosimba. \v 11 Nzokande lokola babola bakozala kaka kati na mokili, ngai nazali kotinda bino ete bofungola maboko na bino epai ya bandeko na bino, epai ya babola mpe epai bato nyonso oyo bakelela kati na mokili na bino. \p \v 12 Soki moko kati na bandeko na yo, Mo-Ebre, azala mobali to mwasi, amiteki ye moko epai na yo, akosalela yo mibu motoba ; na mobu ya sambo, okotika ye kokende na bonsomi. \v 13 Mpe tango okotika ye, okozongisa ye maboko pamba te ; \v 14 okopesa ye na motema ya esengo ndambo na yo ya bibwele, ya ble mpe ya vino ; okopesa ye ndenge kaka Yawe, Nzambe na yo, apambolaki yo. \v 15 Bokanisa ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito ; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino. Yango wana, napesi bino mobeko oyo na mokolo ya lelo. \p \v 16 Kasi soki alobi na yo : « Naboyi kotika yo, » mpo ete alingaka yo elongo na libota na yo mpe azalaka na esengo ya kovanda elongo na yo, \v 17 wana okozwa motonga, okotia litoyi na ye na ezipelo ya ekuke mpe okotobola yango. Na bongo, akokoma mowumbu na yo mpo na libela. Okosala mpe ndenge moko mpo na mwasi mowumbu. \p \v 18 Komona yango likambo ya pasi te kotika mowumbu na yo na bonsomi, pamba te mosala oyo asaleli yo na mibu motoba ezali na litomba mbala mibale koleka litomba ya moto oyo ozwa na mosala. Mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo na nyonso oyo okosala. \s1 Mobeko na tina na bana liboso ya bibwele \p \v 19 Bokotia pembeni mpo na Yawe, Nzambe na bino, mwana mobali nyonso ya liboso oyo akobotama kati na bangombe, bameme mpe bantaba na bino. Kati na bitonga na bino, bokotia na mosala te bana ya liboso ya bangombe na bino mpe bokolongola te bapwale ya bana ya liboso. \v 20 Mibu nyonso, bino elongo na mabota na bino, bokolia bibwele yango na miso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo akopona. \v 21 Soki ebwele yango ezali na mbeba to ezali tengu-tengu to ekufa miso to soki ezali na mbeba mosusu ya makasi, bokoki kobonza yango te epai na Yawe, Nzambe na bino. \v 22 Bokolia yango kati na bingumba na bino : moto nyonso, azala mbindo to peto, akolia yango ndenge baliaka mboloko to mbuli. \v 23 Kasi bokolia makila te, bosopa yango na mabele lokola mayi. \c 16 \s1 Moyize asengaki na bato kosepela bafeti \s2 Feti ya Pasika \p \v 1 Batela sanza ya Abibi\f + \fr 16.1 \fr*\ft Sanza ya Abibi elakisi : sanza oyo bakataka ble, ezali sanza ya liboso na manaka ya losambo ya Bayuda. Babengaka yango lisusu : sanza ya nisani.\ft*\f* mpe sepela feti ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, pamba te ezalaki na butu moko ya sanza yango nde Yawe abimisaki yo na Ejipito. \v 2 Tala biloko oyo okobonza lokola mbeka ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : ngombe ya mobali, meme ya mobali mpe ntaba ya mwasi. \v 3 Okolia yango te na mapa oyo basangisa na levire. Kasi mikolo sambo, okolia mapa ezanga levire, mapa ya pasi, pamba te obimaki na Ejipito na lombangu. Okosalaka bongo na mikolo nyonso ya bomoi na yo mpo ete okanisaka mokolo oyo obimaki na Ejipito. \v 4 Tika ete levire emonana te epai na yo, kati na mokili na yo nyonso mikolo sambo. Kotika te ete nyama oyo babonzi na pokwa ya mokolo ya liboso etikala kino na tongo. \v 5 Okoki te kobonza mbeka ya Pasika kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi yo. \v 6 Ezali kaka na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona mpo na kotia Kombo na Ye nde bokobonza mbeka ya Pasika. Bokosala yango na pokwa, tango moyi elalaka, ngonga oyo obimaki na Ejipito. \v 7 Okolamba mpe okolia yango na esika oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. Bongo na tongo, okozonga na ndako na yo. \v 8 Mikolo motoba, okolia mapa ezanga levire ; bongo na mokolo ya sambo, okosala feti monene mpo na Yawe, Nzambe na yo ; okosala mosala moko te. \s2 Feti ya Pantekoti \p \v 9 Okotanga baposo sambo, kobanda na mokolo oyo okotia mbeli na elanga ya ble mpo na kobuka ble yango. \v 10 Okosala feti ya Baposo\f + \fr 16.10 \fr*\ft Feti ya baposo ezali feti ya pantekoti.\ft*\f* mpo na Yawe, Nzambe na yo ; okobonzela Ye makabo wuta na mokano ya motema na yo moko kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. \v 11 Okosepela liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo akopona mpo na kotia Kombo na Ye : yo, bana na yo ya mibali, bana na yo ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi oyo bazali kati na bingumba na yo, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kovanda kati na yo. \v 12 Kobosana te ete ozalaki mowumbu kati na Ejipito mpe salela malamu mitindo oyo. \s2 Feti ya bandako ya kapo \p \v 13 Mpo na oyo etali feti ya Bandako ya kapo, okosala yango mikolo sambo sima na yo kosangisa bambuma na yo ya ble mpe kokamola vino na yo. \v 14 Okozala na esengo na feti yango : yo, bana na yo ya mibali mpe ya basi, bawumbu na yo ya mibali, basi bawumbu na yo, Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali oyo bazali kati na bingumba na yo. \v 15 Mikolo sambo, okosala yango feti mpo na Yawe, Nzambe na yo, na bisika oyo Yawe akopona ; pamba te Yawe, Nzambe na yo, akopambola milona na yo mpe misala nyonso ya maboko na yo ; bongo esengo na yo ekozala mingi koleka. \p \v 16 Mbala misato na mobu, mibali nyonso basengeli kokende liboso ya Yawe, Nzambe na yo, na esika oyo Ye akopona : na feti ya Mapa ezanga levire, na feti ya Baposo, mpe na feti ya Bandako ya kapo. Moko te akokende liboso ya Yawe, maboko pamba : \v 17 moko na moko kati na bino asengeli komema likabo kolanda mapamboli oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi ye. \s1 Moyize alakisaki kosambisa \p \v 18 Okopona basambisi mpe bakalaka kati na bikolo na yo nyonso, kati na bingumba nyonso oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. Bakokata makambo ya bato na bosembo. \v 19 Okobebisaka bosembo te, okoponaka bilongi te, okondimaka kanyaka te, pamba te ezipaka miso ya bato ya bwanya mpe ebebisaka maloba ya bato ya sembo. \v 20 Okosalelaka bosembo mpe bosembo kaka, mpo ete owumela mpe okamata mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. \s1 Moyize alakisaki oyo epekisami kati na losambo \p \v 21 Okotelemisa te likonzi ya nzambe mwasi Ashera pembeni ya etumbelo oyo okotonga mpo na Yawe, Nzambe na yo. \v 22 Okotelemisa te libanga ya bule, pamba te Yawe, Nzambe na yo, ayinaka nyonso wana. \c 17 \p \v 1 Okobonza te epai na Yawe, Nzambe na yo, ngombe to meme oyo ezali na mbeba to oyo ezali mabe, pamba te yango ezali likambo ya nkele liboso ya Yawe, Nzambe na yo. \p \v 2 Soki kati na moko ya bingumba oyo Yawe, Nzambe na yo, apesi yo ; emonani na mobali to mwasi oyo asali mabe na miso ya Yawe, Nzambe na yo, wana abuki boyokani elongo na Ye \v 3 mpe akei kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango : moyi, sanza to minzoto nyonso ya likolo, nzokande natindaki bango bongo te ; \v 4 bongo bamemeli yo sango ya ndenge wana, yekola yango malamu. Soki emonani solo ete likambo ya nkele esalemi kati na Isalaele ; \v 5 kamata mobali to mwasi oyo asali likambo wana ya nkele, mema ye na ekuke ya engumba na yo mpe bamba ye mabanga kino akokufa. \p \v 6 Ezali kaka na litatoli ya bato mibale to misato nde okoki koboma moto, kasi na litatoli ya moto moko te. \v 7 Maboko ya motatoli nde ekozala maboko ya liboso ya koboma moto yango, mpe na sima, maboko ya bato nyonso. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na yo. \s1 Makambo ya kosambisa na Esika ya bule \p \v 8 Soki makambo oyo eleki yo makasi mpo na kosambisa ekomi na bisambiselo na yo, makambo lokola koboma bato, kowelana, kozokisa bato, mema yango na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona. \v 9 Okokende epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe epai ya mosambisi oyo azali kosala mosala na tango wana. Okotalisa bango likambo yango mpe bango nde bakokata likambo. \v 10 Bongo yo okosala kolanda mikano oyo bango bakopesa yo na esika oyo Yawe akopona. Sala keba ete osala makambo nyonso oyo bakotinda yo. \v 11 Okosala kolanda mobeko oyo bakoteya yo mpe bikateli oyo bakopesa yo. Kokende libanda te ya bikateli oyo bakopesa yo. \v 12 Moto oyo akosala lolendo mpe akoboya kotosa Nganga-Nzambe to mosambisi oyo atelemi mpo kosala mosala na esika oyo Yawe aponaki mpo na ye, basengeli koboma ye. Na nzela wana nde okolongola mabe kati na Isalaele. \v 13 Bato nyonso bakoyoka likambo yango, bakokoma na somo mpe bakosala lisusu lolendo te. \s1 Mibeko na tina na mokonzi \p \v 14 Tango okokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo ; tango okozwa yango mpe okovanda kati na yango, tango mosusu okoki koloba : « Tika ete toluka mokonzi oyo akokonza biso ndenge ezali na bikolo nyonso oyo ezingeli biso, » \v 15 sala keba ete opona kaka mokonzi oyo Yawe, Nzambe na yo, akopona. Asengeli kowuta kati na bandeko na bino. Kotia mopaya te oyo azali ndeko na bino te kati na Isalaele mpo na kokonza bino. \v 16 Nzokande mokonzi yango asengeli te kozala na bampunda ebele mpo na ye moko mpe kozongisa bato na Ejipito mpo na kobakisa motango ya bampunda, pamba te Yawe alobaki na bino : « Botikala kozonga lisusu te na nzela oyo. » \v 17 Asengeli te kozala na basi ebele noki te motema na ye ekopengwa. Asengeli te kozala na palata mpe wolo ebele koleka. \p \v 18 Tango mokonzi yango akovanda na kiti na ye ya bokonzi, akozwa buku ya Mobeko epai ya Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi mpe akokoma makambo oyo ezali na buku yango mpo na ye moko. \v 19 Akozala na buku yango tango nyonso mpe akotanga yango mikolo nyonso ya bomoi na ye mpo ete ayekola kokumisa Yawe, Nzambe na ye, mpe asalela malamu maloba nyonso ya Mobeko oyo mpe bikateli na yango ; \v 20 mpo ete atombola te na lolendo liboso ya bandeko na ye to abima te libanda ya mibeko na yango. Boye, ye elongo na bakitani na ye bakowumela tango molayi na bokonzi kati na Isalaele. \c 18 \s1 Makabo mpo na Banganga-Nzambe mpe Balevi \p \v 1 Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi, elongo na libota mobimba ya Balevi basengeli te kozwa eteni ya mabele to libula kati na Isalaele ; basengeli kobika kaka na makabo bazikisa na moto mpo na Yawe mpe na libula na Ye, pamba te yango nde ezali libula na bango. \v 2 Basengeli te kozala na libula kati na bandeko na bango ; Yawe nde azali libula na bango ndenge alakaki bango. \p \v 3 Tala eteni oyo Banganga-Nzambe basengeli kozwa epai na bato oyo bakobonza ngombe to meme lokola mbeka : lipeka, mbanga mpe biloko ya kati. Okopesa yango epai ya Nganga-Nzambe oyo azali kosala mosala. \v 4 Okopesa ye bambuma na yo ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta mpe bapwale nyonso ya liboso oyo okolongola na bameme na yo ; \v 5 pamba te Yawe, Nzambe na yo, aponi ye elongo na bakitani na ye kati na bikolo na yo nyonso mpo na kotelema mpe kosala tango nyonso mosala na Kombo na Yawe kati na Tempelo. \p \v 6 Soki moko kati na Balevi alongwe na engumba moko kati na bingumba ya Isalaele epai wapi azalaki kovanda, mpe ayei ndenge motema na ye elingi, na esika oyo Yawe Nzambe akopona ; \v 7 asengeli kosala na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ndenge bandeko na ye nyonso Balevi bazali kosala kuna na miso ya Yawe. \v 8 Akozwa eteni ya ndenge moko na bango na oyo etali biloko ya kolia, bakisa mbongo oyo akozwa tango bakoteka biloko ya libota. \s1 Mibeko na tina na misala ya molili \p \v 9 Tango okokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo, okomekola te misala ya mbindo ya bikolo oyo ezali kuna. \v 10 Moto moko te kati na yo akobonza na moto mwana na ye ya mobali to ya mwasi epai ya moto oyo asalelaka soloka, kindoki, oyo atalaka minzoto mpo na kosakola makambo, oyo asalelaka maji \v 11 to moto oyo asalelaka makambo ya nkuku to moto oyo atunaka milimo to nganga-kisi to moto oyo asololaka na bakufi. \v 12 Moto nyonso oyo asalaka makambo oyo, azali mbindo na miso ya Yawe ; mpe ezali mpo na makambo nyonso oyo ya nkele nde Yawe, Nzambe na bino, akobengana bikolo wana liboso na bino. \v 13 Bosengeli kozala bato bazangi pamela liboso ya Yawe, Nzambe na bino. \s1 Mibeko na tina na mosakoli \p \v 14 Bikolo oyo bokobotola ezali bikolo oyo elandaka bato wana, esalelaka kindoki mpe soloka. Kasi mpo na bino, Yawe, Nzambe na bino, akoki te kopesa bino nzela ya kosala bongo. \v 15 Yawe, Nzambe na bino, akobimisela bino mosakoli moko lokola ngai, oyo akowuta kati na bandeko na bino ; bosengeli koyoka ye. \v 16 Yango nde likambo oyo bosengaki epai na Yawe, Nzambe na bino, na ngomba Orebi, na mokolo ya mayangani, tango bolobaki : « Toboyi koyoka lisusu mongongo ya Yawe, Nzambe na biso, to komona lisusu moto makasi oyo, noki te tokokufa. » \v 17 Yawe alobaki na ngai : « Makambo oyo balobi ezali malamu. \v 18 Nakobimisa kati na bandeko na bango mosakoli moko lokola yo ; nakotia maloba na Ngai kati na monoko na ye, mpe akoyebisa bango nyonso oyo Ngai nakotinda ye. \v 19 Soki moto aboyi koyoka maloba na Ngai, oyo mosakoli yango akoloba na Kombo na Ngai, Ngai moko nakopesa ye etumbu. \v 20 Kasi soki mosakoli moko alobi ete azali koloba na Kombo na Ngai, bongo alobi likambo moko oyo Ngai natindi ye te to azali koloba na kombo ya banzambe mosusu, basengeli koboma ye. \p \v 21 Tango mosusu bokoki komituna : ‹ Ndenge nini tokoki koyeba ete maloba oyo azali koloba ewuti solo epai na Yawe te ? › \v 22 Soki makambo oyo mosakoli alobi na Kombo na Yawe ekokisami te to esalemi te, wana maloba yango ewutaki na Yawe te. Mosakoli wana alobaki kaka na ndenge na ye moko, bobanga ye te. » \c 19 \s1 Mibeko na tina na bingumba ya kobombamela \p \v 1 Tango Yawe, Nzambe na bino, akobebisa bikolo oyo Ye akopesa bino mokili na bango, tango bokobengana bango mpe bokovanda na bamboka mpe na bandako na bango ; \v 2 bokotia pembeni mpo na bino, bingumba misato oyo ezali na kati-kati ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa. \v 3 Bokosala kuna banzela mpe bokokabola na biteni misato, mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula mpo ete moto nyonso oyo akoboma moto akoka kokima kuna. \p \v 4 Tala makambo oyo ekoki kosala ete moto oyo abomi moninga na ye akoka kokima kuna mpo na kobikisa bomoi na ye : ezali tango abomi moninga na ye na nko te, moto oyo ayinaki te liboso. \v 5 Ndakisa : moto oyo akei na zamba elongo na moninga na ye mpo na kokata banzete ; bongo na tango atomboli loboko na ye mpo na kokata nzete, ebende ya epasola elongwe na esimbelo na yango, ekweyeli moninga wana mpe ebomi ye : moto wana akoki kokima kati na moko ya bingumba wana mpo na kobikisa bomoi na ye. \v 6 Soki bongo te, mobukanisi makila akolanda ye na kanda, akokanga ye mpe akoboma ye soki engumba ya kokimela ezali mosika mingi. Nzokande asengelaki kokufa te, pamba te ayinaki te liboso moto oyo asilaki koboma. \v 7 Yango wana, napesi bino mitindo ete botia pembeni bingumba misato mpo na bino. \p \v 8 Soki Yawe, Nzambe na bino, ayeisi monene mokili na bino ndenge alakaki epai na bakoko na bino na nzela ya ndayi mpe apesi bino mokili mobimba ndenge alakaki bango, \v 9 mpo ete bosili kotosa mibeko nyonso oyo napesi bino lelo, mibeko ya kolinga Yawe, Nzambe na bino, mpe ya kotambola na banzela na Ye, wana bokobakisa lisusu bingumba misato na bingumba misato ya liboso. \v 10 Bosala bongo mpo ete makila ya moto oyo ayebi likambo te esopana te kati na mokili na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, soki te bokomema ngambo ya makila. \p \v 11 Kasi soki moto ayini moninga na ye mpe atieli ye motambo, abundisi ye mpe abomi ye na nko, bongo akimi kati na moko ya bingumba wana, \v 12 bampaka ya engumba na ye bakolukisa ye, bakozongisa ye na engumba na ye mpe bakotika ye na maboko ya mobukanisi makila mpo ete aboma ye. \v 13 Boyokela ye mawa te. Na nzela wana nde bokolongola kati na Isalaele mabe ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te, mpo ete bozala malamu. \p \v 14 Okoki te kopusa mondelo ya moninga na yo, mondelo oyo bato oyo bayaki liboso na yo na mabele na yo bakataki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo ete bokamata yango. \s1 Mibeko na tina na batatoli \p \v 15 Litatoli ya moto moko ekoki te mpo na kotalisa ete moto songolo abomaki moto to asalaki mabe. Bosolo ya likambo nyonso endimamaka na litatoli ya bato mibale to misato. \p \v 16 Soki motatoli ya lokuta atelemi mpo na kofunda moto mosusu ete moto wana abomi moto ; \v 17 bato nyonso mibale oyo bazali kowelana bakotelema na miso ya Yawe liboso ya Banganga-Nzambe mpe basambisi oyo bazali kosala mosala kati na bino na tango wana. \v 18 Basambisi basengeli koyekola likambo yango malamu penza. Mpe soki emonani ete motatoli akosi, apesi litatoli ya lokuta mpo na ndeko na ye ; \v 19 bosala ye ndenge akanaki kosala ndeko na ye. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino. \v 20 Tango bato oyo batikali bakoyoka yango, bakobanga mpe mabe ya lolenge oyo ekotikala lisusu kosalema te kati na bino. \v 21 Boyokela moto ya ndenge wana mawa te ! Mobeko ezali : bomoi mpo na bomoi, liso mpo na liso, linu mpo na linu, loboko mpo na loboko, lokolo mpo na lokolo. \c 20 \s1 Mibeko na tina na bitumba \p \v 1 Tango bokokende kobundisa banguna na bino mpe bokomona bampunda, bashar mpe mampinga ya basoda ebele koleka oyo ya bino, bobanga bango te, pamba te Yawe, Nzambe na bino, oyo abimisaki bino na Ejipito, akozala elongo na bino. \v 2 Tango bokobongama mpo na kokende na bitumba, Nganga-Nzambe asengeli koleka liboso ya mampinga mpe koloba na bango \v 3 maloba oyo : « Oh Isalaele, boyoka, awa bobongami lelo mpo na kokende na bitumba mpo na kobundisa banguna na bino ; boyika mpiko ! Bobanga te ! Bolenga te ! Bozala na somo te liboso ya banguna na bino. \v 4 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, akotambola elongo na bino mpo na kobundela bino liboso ya banguna na bino mpe kopesa bino elonga. » \p \v 5 Bakonzi ya basoda basengeli koloba na mampinga : « Ezali na moko kati na bino oyo awuti kotonga ndako ya sika mpe avandi nanu kuna te ? Tika ete azonga na ndako na ye noki te akoki kokufa na bitumba, bongo moto mosusu akoya kovanda moto ya liboso na ndako yango. \v 6 Ezali na moto oyo awuti kolona elanga ya vino mpe nanu abuki bambuma ya liboso te ? Tika ete azonga na ndako na ye noki te akoki kokufa na bitumba, bongo moto mosusu akoya kozala moto ya liboso mpo na kobuka mbuma ya liboso na elanga na ye. \v 7 Ezali na moto oyo awuti kotuna mwasi na libala mpe abali nanu te ? Tika ete azonga na ndako, noki te akoki kokufa na bitumba mpe moto mosusu akoya kobala mwasi oyo ye atunaki na libala. » \v 8 Bakonzi ya basoda bakoloba lisusu : « Ezali na moto oyo azali kobanga to alembi nzoto ? Tika ete azonga na ndako mpo ete alembisa te baninga na ye na bitumba. » \v 9 Bongo tango bakonzi ya basoda bakosilisa koloba na mampinga, bakopona bakonzi mpo na kokamba mampinga. \p \v 10 Tango bokokende kobundisa engumba moko, boyebisa bato ya engumba yango ete bamipesa bango moko na maboko na bino na kimia. \v 11 Soki bandimi mpe bafungoli bikuke na bango, bokosalisa bato nyonso ya engumba wana misala makasi mpe bakosalela bino. \v 12 Kasi soki baboyi kosala kimia elongo na bino mpe babundisi bino, bobundisa engumba wana. \v 13 Tango Yawe, Nzambe na yo, akokaba engumba wana na maboko na yo, okoboma na mopanga bato nyonso oyo bazali kati na yango. \v 14 Kasi bokoki kozwa mpo na bino lokola bomengo ya bitumba : basi, bana, bibwele mpe biloko nyonso oyo ezali kati na engumba. Boye bokosalela bomengo ya bitumba oyo ekowuta epai ya banguna na bino oyo Yawe, Nzambe na bino, akokaba na maboko na bino. \v 15 Ezali ndenge wana nde bokosala bingumba nyonso oyo ezali mosika na bino, bingumba oyo ezali te kati na mokili oyo bokozwa. \v 16 Kasi mpo na bingumba ya bikolo oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo lokola libula, kotika ata eloko moko te na bomoi. \v 17 Bebisa bango nyonso : bato ya Iti, bato ya Amori, bato ya Kanana, bato ya Perizi, bato ya Evi mpe bato ya Yebusi, ndenge Yawe, Nzambe na yo, atindaki yo \v 18 mpo ete bateya yo te kosala makambo nyonso ya nkele oyo bango basalaka mpo na lokumu ya banzambe na bango ; noki te okosala masumu liboso ya Yawe, Nzambe na yo. \p \v 19 Tango okobundisa engumba moko tango molayi mpo na kobotola yango, okoki kosimba epasola te mpo na kokata banzete ya engumba yango, pamba te okoki kolia bambuma na yango ; kokata yango te. Boni, banzete ekomi bato mpo ete obundisa yango ? \v 20 Kasi okoki nde kokata banzete oyo oyebi ete ebotaka mbuma te mpo na kosala na yango bibundeli kino engumba yango ekokweya. \c 21 \ms1 Mibeko mpo na evandeli ya bato \s1 Kufa ya moto oyo ayebani mobomi te \p \v 1 Soki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa, bakuti moto akufa alali na elanga, bongo moto oyo abomaki ye ayebani te, \v 2 bampaka mpe basambisi na bino basengeli kobima mpo na komeka molayi, kobanda na esika oyo ebembe ezali kino na bingumba ya zingazinga, \v 3 mpo na koyeba engumba oyo eleki pene. Bongo bampaka ya engumba yango bakozwa mwana ngombe ya mwasi oyo nanu basaleli mosala te mpe nanu bakangi ekangiseli na kingo te ; \v 4 bakomema mwana ngombe yango ya mwasi na lubwaku oyo, kati na yango, basala nanu mosala ya bilanga te mpe balona nanu ata eloko moko te, na esika oyo mayi ezali kotiola. Ezali kuna nde bampaka bakobuka yango kingo. \p \v 5 Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, bakopusana ; pamba te ezali bango nde Yawe, Nzambe na bino, apona mpo na kosala mosala na Ye, mpo na kopambola bato na Kombo na Yawe mpe mpo na kokata makambo tango nyonso kowelana mpe kozokisana ezali. \v 6 Bongo bampaka ya engumba yango bakosukola maboko na bango na likolo ya mwana ngombe ya mwasi oyo bakobuka kingo na lubwaku \v 7 mpe bakoloba : « Maboko na biso esopaki makila oyo te, mpe miso na biso emonaki te tango likambo yango esalemaki. \v 8 Eh Yawe, ndima kolimbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, oyo osikolaki. Kotangela bango ngambo te ya makila ya moto oyo ayebi likambo te. » \p Boye, Yawe akolimbisa bango mpo na makila oyo etangaki. \v 9 Na nzela wana nde bokolongola, kati na bino, ngambo ya kosopa makila ya moto oyo ayebi likambo te wana bokosala likambo ya bosembo na miso ya Yawe. \s1 Kobala mwasi mokangami na bitumba \p \v 10 Tango bokokende kobundisa banguna na bino, bongo Yawe, Nzambe na bino, akabi bango na maboko na bino mpe bokangi ndambo ya bato ; \v 11 soki bomoni mwasi ya kitoko kati na bango mpe moko kati na bino asepeli na ye, akoki solo kobala ye. \v 12 Boye mobali oyo asepeli kobala mwasi yango akokotisa ye kati na ndako na ye, mpe mwasi yango akomikokola suki ya moto na ye, akomikata manzaka na ye ; \v 13 akotia pembeni bilamba oyo alataki tango bakangaki ye mpe akovanda na ndako ya mobali yango. Sima na ye kolela tata mpe mama na ye sanza mobimba, mobali yango akosangisa na ye nzoto mpe akokoma mobali na ye ; bongo ye akokoma mwasi ya mobali yango. \v 14 Soki mobali asepeli lisusu na mwasi yango te, akotika ye kokende na esika nyonso oyo alingi ; akoki te koteka ye to kokomisa ye lokola mowumbu, pamba te asambwisaki ye. \s1 Makoki ya mwana liboso ya moto \p \v 15 Soki mobali azali na basi mibale, bongo alingaka moko koleka mosusu, mpe bango mibale baboteli ye bana, kasi mwana ya liboso azali mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te ; \v 16 tango akokabola bozwi na ye lokola libula epai ya bana na ye ya mibali ; akoki te kokomisa mwana ya liboso, mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka koleka na esika ya mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te. \v 17 Kasi akozwa mwana mobali ya mwasi oyo ye alingaka mingi te lokola mwana ya liboso mpe akopesa ye biteni mibale ya biloko nyonso oyo azali na yango. Mwana mobali wana azali elembo ya liboso ya bokasi ya tata na ye, boye asengeli kozwa makoki nyonso oyo ebongi na mwana ya liboso. \s1 Soki mwana atombokeli baboti na ye \p \v 18 Soki moto azali na mwana oyo azali moto makasi mpe motomboki, oyo atosaka te ezala tata to mpe mama na ye, mpe ayokelaka bango te ata soki bapesi ye etumbu, \v 19 tata mpe mama na ye bakokanga ye mpe bakomema ye epai ya bampaka na ekuke ya engumba na bango. \v 20 Bakoloba na bampaka ya engumba : « Mwana na biso oyo azali moto makasi mpe motomboki, atosaka biso te, azali lokoso mpe molangwi masanga. » \v 21 Boye bato nyonso ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa. Na nzela wana nde bokolongola mabe kati na bino. Tango bana nyonso ya Isalaele bakoyoka yango, bakobanga. \s1 Ebembe ya moto oyo badiembiki \p \v 22 Soki moto asali mabe oyo esengi ete bapesa ye etumbu ya kufa, bongo badiembiki nzoto na ye na nzete, \v 23 ebembe na ye ekowumela te butu mobimba na nzete wana ; bosengeli kokunda yango kaka na mokolo wana, pamba te moto nyonso oyo badiembiki na nzete azali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe. Bosengeli te kokomisa mbindo mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino lokola libula. \c 22 \s1 Limemia na biloko ya baninga \p \v 1 Soki omoni meme to ngombe ya ndeko na yo ezali koyengayenga, kotala yango pamba te, kasi kanga yango mpe zongisa yango epai ya nkolo na yango. \v 2 Soki ndeko yango avandaka pembeni na yo te to oyebi ye te, mema yango na ndako na yo mpe bomba yango kino akoya koluka yango, bongo okozongisela ye yango. \v 3 Okosala ndenge moko soki omoni ane ya ndeko na yo to kazaka na ye to eloko mosusu oyo ye abungisi. Kotala yango na pamba te. \p \v 4 Soki omoni ane ya ndeko na yo to ngombe na ye ekweyi na nzela, kotala yango na pamba te ; osalisa ndeko na yo mpo na kotelemisa yango. \p \v 5 Mwasi akoki kolata bilamba ya mibali te to mpe mobali akoki te kolata bilamba ya basi, pamba te Yawe, Nzambe na bino, ayinaka moto nyonso oyo asalaka makambo ya ndenge wana. \v 6 Soki omoni zala ya ndeke pembeni ya nzela, ezala likolo ya nzete to na mabele, mpe mama ya ndeke evandeli bana to maki, kozwa te mama elongo na bana. \v 7 Osengeli kozwa bana, kasi kotika mama ete ekende mpo ete ozala moto ya esengo mpe ozala na bomoi molayi. \p \v 8 Tango okotonga ndako ya sika, kozanga te kotonga mir ya mokuse zingazinga ya motondo mpo ete omema ngambo ya makila te na ndako na yo soki moto akweyi likolo ya motondo. \p \v 9 Kolona te lolenge mibale ya nkona na elanga na yo ya vino ; noki te nyonso ekokoma bule : oyo okolona mpe bambuma ya elanga na yo ya vino. \v 10 Okoki kosangisa te na libaya moko, ngombe mpe ane mpo na kobalola mabele. \p \v 11 Okoki kolata te bilamba oyo basala na bapwale ya meme mpe na lino. \p \v 12 Okotia basinga na basonge minei ya elamba oyo okolata. \s1 Mibeko na tina na libala \p \v 13 Soki mobali abali mwasi mpe, sima na kosangisa na ye nzoto, asepeli na ye lisusu te, \v 14 alobi ete ezaleli ya mwasi yango ezali mabe, bongo apanzi ye sango ya mabe na koloba : « Nabalaki mwasi oyo, kasi tango nasangisi na ye nzoto, namoni ete ayebaki nzoto ya mibali, » \v 15 wana tata mpe mama ya mwana mwasi, basengeli kolakisa epai na bampaka, na bikuke ya engumba, bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na bango ya mwasi ayebaki nzoto nanu ya mibali te. \v 16 Tata ya mwana mwasi akoloba na bampaka : « Nabalisaki mwana na ngai ya mwasi na mobali oyo, kasi asepeli na ye lisusu te ; \v 17 amoni ete ezaleli ya mwana na ngai ya mwasi ezali malamu te, yango wana alobi : ‹ Mwana mwasi oyo ayebaki nzoto ya mibali. › Kasi tala bilembo oyo ezali kolakisa ete mwana na ngai ya mwasi ayebaki nanu nzoto ya mibali te. » Boye baboti ya mwana mwasi bakofungola elamba liboso ya bampaka ya engumba, \v 18 mpe bampaka ya engumba bakozwa mobali yango mpe bakopesa ye etumbu : \v 19 bakofutisa ye lomande ya mbongo ya bibende ya palata, nkama moko, mpe bakopesa yango epai ya tata ya mwana mwasi, pamba te mobali oyo asambwisi elenge mwasi ya Isalaele oyo ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe akokoba kozala mwasi na ye : akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye. \p \v 20 Kasi soki makambo oyo bafundeli ye ezali ya solo, mpe ezali ata na elamba moko te oyo ezali kotalisa ete ayebaki nanu nzoto ya mibali te, \v 21 esengeli bamema ye libanda ya ndako ya tata na ye, mpe kuna bato ya engumba na ye bakobamba ye mabanga kino akokufa : asalaki likambo ya soni kati na Isalaele na kosalaka kindumba tango azalaki na ndako ya tata na ye. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino. \p \v 22 Soki bakangi mobali azali kosangisa nzoto na mwasi ya mobali mosusu, bango nyonso mibale basengeli kokufa. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na Isalaele. \p \v 23 Soki kati na engumba mobali moko akutani na elenge mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te bongo asangisi na ye nzoto, nzokande elenge mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye, \v 24 bokomema bango mibale na ekuke ya engumba wana mpe kobamba bango mabanga kino bakokufa. Bokoboma mwana mwasi, pamba te azalaki kati na engumba kasi agangaki te mpo ete baya kosunga ye ; bokoboma mobali, pamba te asangisaki nzoto na makasi na mwasi ya mobali mosusu. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino. \v 25 Soki mobali akoti na zamba na mwasi oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe asangisi na ye nzoto na makasi, nzokande mwasi yango azali na mobali oyo alingi kobala ye, kaka mobali oyo asali likambo wana nde asengeli kokufa. \v 26 Bokosala likambo moko te epai ya mwana mwasi, pamba te asali lisumu moko te oyo ekoki komema ye na kufa. Likambo oyo ekokani na moto oyo abundisi moninga na ye mpe abomi ye. \v 27 Pamba te mobali wana akutanaki na mwasi wana na zamba, mpe mwana mwasi wana akokaki koganga na ndenge nyonso alingi, kasi moto moko te akokaki komonana kuna mpo na kosunga ye. \p \v 28 Soki mobali akutani na elenge mwasi, oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpe azali te na mobali oyo alingi kobala ye, asangisi na ye nzoto na makasi, mpe bomoni bango ; \v 29 mobali wana asengeli kofuta mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano epai ya tata ya elenge mwasi, asengeli kobala elenge mwasi yango ; pamba te asangisi na ye nzoto na makasi : akoki kokabwana na ye te mikolo nyonso ya bomoi na ye. \p \v 30 Mwana mobali moko te akoki kobala mwasi ya tata na ye, noki te akosambwisa mbeto ya tata na ye. \c 23 \s1 Bato oyo bakoki kondimama te kati na mayangani \p \v 1 Mobali moko te oyo baboma mokongo to balongola nzoto ya mibali akoki kokota na lisanga ya Yawe. \v 2 Mwana makangu moko te to bakitani na ye bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi. \p \v 3 Moto moko te ya Amoni to ya Moabi to bakitani na bango bakoki kokota na lisanga ya Yawe ata sima na milongo zomi. \v 4 Pamba te bayaki te koyamba bino na mapa mpe na mayi na nzela na bino tango bobimaki na Ejipito ; mpe bazwaki Balami, mwana mobali ya Beori, moto ya Petori, wuta na mokili ya Mezopotami, mpo ete alakela bino mabe. \v 5 Kasi Yawe, Nzambe na bino, ayokaki Balami te mpe abongolaki elakeli mabe lipamboli mpo na bino, pamba te Yawe, Nzambe na bino, alingi bino. \v 6 Tango nyonso bokozala na bomoi, bokoki te kosala boyokani ya kimia elongo na bango. \p \v 7 Bokoki te komona bato ya Edomi lokola bato ya mbindo, pamba te bazali bandeko na bino. Bokoki te komona bato ya Ejipito lokola bato ya mbindo, pamba te bovandaki kati na mokili na bango lokola bapaya. \v 8 Bakitani na bango, kobanda na molongo ya misato, nde bakoki kokota na lisanga ya Yawe. \s1 Mibeko na tina na bozangi mbindo ya molako \p \v 9 Tango bokotonga milako mpo na kobundisa banguna na bino, bozala mosika na eloko nyonso oyo ezali mbindo. \v 10 Soki mobali moko kati na bino azali mbindo, pamba te abimisaki mayi ya mibali na butu, asengeli kokende libanda ya molako mpe kovanda kuna. \v 11 Kasi na pokwa, na tango moyi elalaka, asengeli komisukola nzoto mpe kozonga na molako. \p \v 12 Bokopona esika moko na libanda ya molako, mpo na kosala zongo. \v 13 Moto na moto, kati na bisalelo na ye, asengeli kozala na pawu ya moke mpo na kotimola mabele ; mpe soki akei kosala zongo inene, akotimola mwa libulu mpe akokunda nyei na ye. \v 14 Pamba te Yawe, Nzambe na bino, atambolaka kati na molako na bino mpo na kobatela bino mpe kokangola bino na maboko ya banguna na bino. Molako na bino esengeli kozala bule mpo ete akoka komona te eloko moko ya mbindo kati na bino mpe apesa bino mokongo te. \s1 Makoki ya moto oyo aluki ebombamelo \p \v 15 Soki mowumbu ayei kobombama epai na yo, kozongisa ye te na maboko ya nkolo na ye. \v 16 Tika ete awumela epai na yo, na esika nyonso oyo alingi, mpe na engumba nyonso oyo aponi ; konyokola ye te. \s1 Kindumba ya bule epekisami \p \v 17 Kati na bana ya Isalaele, azala mobali to mwasi, moko te asengeli komipesa na kindumba ya bule. \v 18 Bosengeli te kokotisa na Tempelo ya Yawe, Nzambe na bino, lifuti ya mwasi ya ndumba to ya mobali ya ndumba, mpo na kokokisa ndayi ya lolenge nyonso, pamba te Yawe, Nzambe na bino, amonaka bango nyonso mibale nkele. \s1 Epekisami kodefisa mpo na kozwa mileki \p \v 19 Okoki te kozwa mileki epai ya ndeko na yo tango odefisi ye mosolo, bilei to eloko mosusu oyo ekoki kobota mileki. \v 20 Okoki kozwa mileki epai ya mopaya, kasi epai ya ndeko na yo moto ya Isalaele te ; mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala kati na mokili oyo bokokota mpo na kozwa. \s1 Mibeko na tina na bandayi \p \v 21 Soki olapi ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, kowumela te mpo na kokokisa yango ; noki te Yawe, Nzambe na yo, akotuna yo yango mpe ekozala lisumu mpo na yo. \v 22 Kasi soki oboyi na yo kolapa ndayi, okomema ngambo te. \v 23 Likambo nyonso oyo bibebu na yo ekobimisa, osengeli kosalela yango, pamba te olapaki ndayi epai na Yawe, Nzambe na yo, na monoko na yo moko mpe wuta na mokano ya motema na yo. \s1 Makoki ya kobuka bambuma kati na elanga \p \v 24 Soki okoti na elanga ya vino ya moninga na yo, okoki kolia bambuma nyonso oyo olingi, kasi kotia eloko moko te na kitunga na yo. \v 25 Soki okoti na elanga ya ble ya moninga na yo, okoki kobuka ble na maboko, kasi kosalela mbeli te. \c 24 \s1 Mibeko na tina na koboma libala mpe kobala lisusu \p \v 1 Soki mobali abali mwasi mpe, sima na mikolo, asepeli na ye lisusu te mpo ete amoni eloko moko ya mabe kati na ye, tika ete akoma mokanda ya koboma libala mpe apesa ye yango ; bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye. \v 2 Sima na kobima na ndako ya mobali wana, mwasi yango akoki kobala mobali mosusu. \v 3 Mpe soki esali ete mobali oyo ya mibale mpe asepeli na ye lisusu te, tika ete ye mpe akokoma mokanda mpo na koboma libala mpe apesa ye yango, bongo na sima, abimisa ye na ndako na ye ; to soki esali ete mobali oyo ya mibale akufi, \v 4 boye mobali na ye ya liboso, oyo abenganaki ye na libala, akoki lisusu te kozongisa ye na libala, pamba te mwasi yango akomi mbindo liboso na ye : kozongisa ye lisusu na libala ezali likambo ya nkele na miso ya Yawe. Boyeisa lisumu te na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula. \s1 Makambo oyo bosengeli te kosala na bato \p \v 5 Soki mobali abali sika, bakoki te kotinda ye na bitumba to kopesa ye mosala songolo ; akozala na bonsomi mobu mobimba mpo ete avanda na ndako na ye mpo na kosepelisa mwasi oyo asili kobala. \p \v 6 Bokanga te lokola ndanga, mabanga mibale oyo moninga anikaka na yango ble : mingi koleka libanga oyo ya moke, pamba te kosala bongo ezali lokola kokanga ye nzela oyo abikelaka. \p \v 7 Soki moto moko ya Isalaele ayibi ndeko na ye ya Isalaele mpe akomisi ye mowumbu to ateki ye, basengeli koboma moto wana. Na nzela wana nde bosengeli kolongola mabe kati na bino. \s1 Mibeko na tina na bokono ya maba \p \v 8 Mpo na makambo oyo etali bokono ya maba, bosala keba ete bosalela malamu malako nyonso oyo Banganga-Nzambe, ba-oyo bazali Balevi, bapesaki bino. Bosengeli kotosa malamu makambo oyo natindaki bango. \v 9 Bobosana te makambo oyo Yawe, Nzambe na bino, asalaki epai ya Miriami, na nzela, sima na bino kobima na Ejipito. \s1 Makoki ya bato bakelela \p \v 10 Soki odefisi eloko epai ya moninga na yo, kokota te na ndako na ye mpo na kozwa ndanga. \v 11 Vanda kaka na libanda kino moto oyo adefaki epai na yo akomemela yo ndanga. \v 12 Soki moto yango azali mobola, kokende kolala te na ndanga oyo asimbisaki yo mpo na niongo. \v 13 Okozongisela ye ndanga na ye ya kazaka ye, na pokwa, mpo ete alala na yango. Bongo, ye akopambola yo ; mpe ekozala mpo na yo likambo ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na yo. \p \v 14 Konyokola te moto ya mosala oyo azali mobola to moto akelela : azala ndeko na yo moto ya Isalaele to mopaya oyo azali kovanda kati na moko ya bingumba na yo. \v 15 Pesa ye lifuti na ye ya mokolo na mokolo na pokwa, pamba te azali mobali mpe atiaka elikya na lifuti yango, noki te akoganga epai na Yawe na tina na yo mpe okosala lisumu. \p \v 16 Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. \p \v 17 Bokoki te kokata na ndenge ya mabe, makambo mpo na mopaya to mpo na mwana etike ; to kokamata kazaka ya mwasi oyo akufisa mobali lokola ndanga. \v 18 Bobosana te ete bino mpe bozalaki bawumbu na Ejipito ; mpe Yawe, Nzambe na bino, asikolaki bino kuna. \p \v 19 Tango bokobuka mbuma na bilanga na bino, soki bobosani liboke ya ble, bozonga te mpo na kozwa yango ; botika yango mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpo ete Yawe, Nzambe na bino, apambola bino na misala nyonso oyo maboko na bino ekosala. \v 20 Tango bokoningisa bambuma ya olive na banzete na yango, bobuka te oyo ekotikala na bitape ; botika yango mpo na bapaya, bana bitike mpe mpo na basi bakufisa mibali. \v 21 Tango bokobuka bambuma na bilanga na bino ya vino, bokozongela te kobuka na mbala ya mibale. Botika oyo ekotikala mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali. \v 22 Bokanisa ete bozalaki bawumbu na Ejipito. Yango wana natindi bino kotosa mibeko oyo. \c 25 \s1 Makoki ya moto oyo asali mabe \p \v 1 Soki bato bazali kowelana, bakomema likambo na bango na esambiselo, mpe basambisi bakokata likambo yango : bakolongisa moto oyo ayebi likambo te mpe bakokweyisa moto oyo asali mabe. \v 2 Bongo soki esengi ete babeta moto oyo asali mabe fimbu, basambisi bakolalisa ye na mabele mpe bakobetisa ye fimbu na miso na bango ; bakobetisa ye motango ya bafimbu oyo ekoki na mabe oyo asali. \v 3 Kasi bakoki te kobeta ye bafimbu koleka tuku minei. Soki babeti ye fimbu koleka tuku minei, ndeko na bino akosambwa na miso na bino. \p \v 4 Osengeli te kokanga monoko ya ngombe oyo ezali konika bambuma. \s1 Soki ndeko mobali akufi kasi atiki mwana te \p \v 5 Soki bandeko mibali bazali kovanda elongo, mpe moko kati na bango akufi kasi atiki mwana te, mwasi oyo akufisi mobali akoki te kobala na libota mosusu ; semeki na ye asengeli kozwa ye na libala mpo na kokokisa epai na ye mokumba ya kisemeki. \v 6 Mwana mobali ya liboso oyo mwasi yango akobota akozwa kombo ya ndeko mobali oyo akufa mpo ete kombo na ye ebunga te kati na Isalaele. \v 7 Soki mobali yango aboyi kobala semeki na ye ya mwasi, semeki yango ya mwasi akokende epai ya bampaka, na ekuke ya engumba, mpe akoloba na bango : « Semeki na ngai aboyi kobatela kombo ya ndeko na ye kati na Isalaele, aboyi kokokisa mokumba na ye ya kisemeki epai na ngai. » \v 8 Boye, bampaka ya engumba wana bakobengisa mobali yango mpe bakoloba na ye. Soki akobi kaka koboya kobala semeki na ye, \v 9 semeki yango akopusana pembeni na ye na miso ya bampaka, akolongola ye lokolo moko ya sandale, akobwakela ye soyi na elongi, mpe akoloba na ye : « Tala ndenge basengeli kosala moto oyo aboyi kotonga ndako ya ndeko na ye ya mobali. » \v 10 Boye, kati na Isalaele, bakobanda kobenga bakitani ya moto wana « bana ya moto oyo balongola sandale. » \s1 Makambo oyo epekisami soki mibali bazali kobunda \p \v 11 Soki mibali bazali kobunda, bongo mwasi moko apusani mpo na kokangola mobali na ye na loboko ya moto oyo azali kobeta ye, mpe soki mwasi yango asemboli loboko na ye mpe akangi nzoto ya mibali ya moto oyo azali kobeta mobali na ye, \v 12 bokokata loboko na ye. Bokoyokela ye mawa te. \s1 Mibeko na tina na bimekelo \p \v 13 Okoki te kozala na bimekelo mibale ya kilo ekesana kati na saki na yo : moko eleki kilo mpe mosusu eleki pepele. \v 14 Okoki te kozala na ndako na yo na bikolo mibale ekesana mpo na kotanga na yango biloko : moko ya monene mpe mosusu ya moke. \v 15 Osengeli kozala na bimekelo mpe bikolo ya kotangela ya malamu mpe ya sembo, mpo ete owumela mikolo ebele kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo. \v 16 Pamba te Yawe, Nzambe na yo, amonaka nkele, moto nyonso oyo asalaka makambo wana, moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo te. \p \v 17 Bobosana te makambo oyo bato ya Amaleki basalaki bino tango bobimaki na Ejipito : \v 18 tango bolembaki nzoto mpe bosilaki makasi, babimelaki bino na pwasa na mobembo na bino mpe babomaki bato nyonso oyo bazalaki na sima ; babangaki Nzambe te. \v 19 Tango Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino bopemi liboso ya banguna nyonso oyo bazingeli bino kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa lokola libula, bosengeli koboma bato ya Amaleki mpo ete botikala lisusu te kokanisa bango kati na mokili. Bobosana te kosala likambo yango. \c 26 \s1 Mibeko na tina na bambuma ya liboso \p \v 1 Tango bokokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino lokola libula, tango bokozwa yango mpe bokovanda kuna, \v 2 moko na moko kati na bino akozwa ndambo ya bambuma ya liboso ya biloko nyonso oyo akozwa na mabele ya mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino ; akotia yango na kitunga mpe akokende na esika oyo Yawe, Nzambe na bino, akopona mpo na kotia Kombo na Ye. \v 3 Akoloba na Nganga-Nzambe oyo akozala na mosala na tango wana : « Natatoli lelo liboso ya Yawe, Nzambe na yo, ete nakomi na mokili oyo Yawe alakaki kopesa na bakoko na biso na nzela ya ndayi. » \v 4 Nganga-Nzambe akozwa kitunga na maboko na ye mpe akokitisa yango liboso ya etumbelo ya Yawe, Nzambe na bino. \v 5 Bongo okoloba liboso ya Yawe, Nzambe na yo : « Koko na ngai azalaki moto ya Arami oyo azalaki koyengayenga ; akendeki na Ejipito na bato moke, awumelaki kuna mpe akomaki ekolo monene, ekolo ya nguya mpe ya bato ebele. \v 6 Kasi bato ya Ejipito banyokolaki biso, bayokisaki biso pasi mpe bapesaki biso misala makasi. \v 7 Boye togangaki epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na biso. Wana ayokaki mingongo na biso, amonaki mawa, pasi mpe minyoko na biso ; \v 8 Yawe abimisaki biso na Ejipito na somo makasi, na bilembo minene mpe na bikamwa, na nzela ya loboko na Ye ya nguya mpe esembolama. \v 9 Amemaki biso na esika oyo mpe apesaki biso mokili oyo, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. \v 10 Sik’oyo oh Yawe, tala, namemi bambuma ya liboso ya mabele oyo opesaki ngai. » \p Sima na yango, okotia kitunga liboso ya Yawe, Nzambe na yo, mpe okogumbama liboso na Ye. \v 11 Boye, na biloko nyonso ya malamu oyo Yawe, Nzambe na yo, akopesa yo mpe bandeko na yo ; okosepela na yango elongo na Balevi mpe bapaya oyo bazali kati na bino. \s1 Eteni ya zomi ya mibu misato \p \v 12 Na mobu nyonso ya misato, mobu ya eteni ya zomi, tango okosilisa kotia pembeni eteni ya zomi ya biloko nyonso oyo okozwa, okopesa yango epai ya Balevi, epai ya bapaya, epai ya bana bitike mpe epai ya basi bakufisa mibali ; mpo ete balia yango na bingumba na yo mpe batonda. \v 13 Bongo okotatola maloba oyo epai na Yawe, Nzambe na yo : « Nalongolaki kati na ndako na ngai eteni ya bule mpe napesi yango epai ya Balevi, bapaya, bana bitike mpe basi bakufisa mibali, kolanda makambo nyonso oyo otindaki ngai. Napengwaki te na mitindo na Yo mpe nabosanaki yango te. \v 14 Naliaki ata eteni moko te ya bule tango nazalaki na matanga, nalongolaki eloko moko te kati na yango tango nazalaki mbindo mpe nabonzaki eloko moko te kati na yango epai ya bakufi. Natosaki Yawe, Nzambe na ngai, mpe nasalaki makambo nyonso oyo otindaki ngai. \v 15 Tala wuta likolo, esika na Yo ya bule epai wapi ovandaka, mpe pambola Isalaele, bato na Yo, mpe mokili oyo opesaki biso ndenge olakaki yango epai ya bakoko na biso na nzela ya ndayi, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi. » \s1 Bana ya Isalaele bazali bato ya Yawe \p \v 16 Lelo, Yawe, Nzambe na yo, apesi yo mitindo ete osalela malamu bikateli mpe mibeko oyo ; batela yango malamu na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba. \v 17 Lelo, ondimi ete Yawe azali Nzambe na yo ; ndenge opesaki elaka ete okotosa Ye, okobatela mibeko na Ye nyonso mpe okosala makambo nyonso oyo Ye akotinda yo. \v 18 Lelo mpe, Yawe andimi ete ozala ekolo na Ye penza, ndenge alakaki yo mpe ndenge apesaki yo mitindo ete otosa mibeko na Ye nyonso. \v 19 Na bongo, Yawe, Nzambe na yo, akokomisa yo monene koleka bikolo nyonso oyo Ye akela ; akopesa yo lokumu, nkembo na Kombo na Ye. Okozala libota ya bule mpo na Yawe, Nzambe na yo, ndenge alakaki yango. \c 27 \ms1 Kosalela maloba ya mibeko \s1 Kotelemisa mabanga na ngomba Ebali \p \v 1 Moyize mpe bampaka ya Isalaele bapesaki mitindo oyo epai ya bato : « Bobatela mitindo nyonso oyo nalingi kopesa bino lelo. \v 2 Tango bokokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino, bokotelemisa ndambo ya mabanga minene mpe bokopakola yango pembe. \v 3 Bokokoma na likolo na yango, maloba nyonso ya mobeko tango bokosilisa kokatisa Yordani mpo na kokota na mokili oyo Nzambe na bino akopesa bino, mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, ndenge kaka Yawe, Nzambe ya bakoko na bino, alakaki bino. \v 4 Mpe tango bokosilisa kokatisa Yordani, bokotelemisa mabanga yango na ngomba Ebali ndenge natindi bino yango lelo, mpe bokopakola yango pembe. \v 5 Kuna, bokotonga etumbelo ya mabanga mpo na Yawe, Nzambe na bino. Bokosalela ata esalelo moko te ya ebende. \v 6 Bokotonga na mabanga balokota na bilanga etumbelo mpo na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokobonza na likolo na yango bambeka ya kotumba. \v 7 Na likolo ya etumbelo yango, bokobonza bambeka ya boyokani ; bokolia yango kaka na esika wana mpe bokosepela na miso ya Yawe, Nzambe na bino. \v 8 Bokokoma na konguluta maloba nyonso ya mobeko oyo na likolo ya mabanga oyo botelemisi. » \p \v 9 Sima na yango, Moyize mpe Banganga-Nzambe oyo bazali Balevi balobaki na lisanga mobimba ya Isalaele : « Oh Isalaele, bovanda kimia mpe boyoka ! Bokomi lelo libota ya Yawe, Nzambe na bino. \v 10 Botosa Yawe, Nzambe na bino, mpe bosalela mitindo mpe bikateli na Ye oyo nalingi kopesa bino lelo. » \p \v 11 Kaka na mokolo wana, Moyize apesaki mitindo oyo epai na bato : \v 12 « Tala mabota oyo ekotelema na ngomba Garizimi mpo na kopambola bato tango bokokatisa Yordani : libota ya Simeoni, ya Levi, ya Yuda, ya Isakari, ya Jozefi, mpe ya Benjame. \v 13 Mpe tala mabota oyo ekotelema na ngomba Ebali mpo na kolakela bato mabe : libota ya Ribeni, ya Gadi, ya Aseri, ya Zabuloni, ya Dani mpe ya Nefitali. » \s1 Bilakeli mabe mpo na bozangi botosi \p \v 14 Balevi bakoloba epai ya bana nyonso ya Isalaele maloba oyo na mongongo makasi : \p \v 15 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosala nzambe ya ekeko na libanga, na nzete to na ebende banyangwisa na moto, mpo na kotia yango na esika ya sekele ! Yawe amonaka lokola biloko ya nkele, banzambe ya bikeko oyo bato ya misala ya maboko basalaka ! » \pi1 Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! » \p \v 16 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosambwisa tata na ye to mama na ye ! » \pi1 Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! » \p \v 17 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akopusa libanga oyo batie lokola mondelo na mabele ya moninga na ye ! » \pi1 Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! » \p \v 18 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokamba mokufi miso na nzela ya mabe. » \pi1 Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! » \p \v 19 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akokata makambo na ndenge ya mabe mpo na mopaya, mpo na mwana etike mpe mpo na mwasi oyo akufisa mobali ! » \pi1 Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! » \p \v 20 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mwasi ya tata na ye, pamba te asambwisi mbeto ya tata na ye ! » \pi1 Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! » \p \v 21 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na nyama ! » \pi1 Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! » \p \v 22 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akosangisa nzoto na ndeko na ye ya mwasi, mwana ya tata na ye to mwana ya mama na ye ! » \pi1 Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! » \p \v 23 « Alakelama mabe moto nyonso oyo akosangisa nzoto na mama ya mwasi na ye ! » \pi1 Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! » \p \v 24 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akoboma moninga na ye na nkuku ! » \pi1 Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! » \p \v 25 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akozwa kanyaka mpo na koboma moto oyo ayebi likambo te ! » \pi1 Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! » \p \v 26 « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akokokisa te mpe akotia te na misala, maloba ya mibeko oyo ! » \pi1 Bato nyonso bakozongisa : « Amen ! » \c 28 \s1 Mapamboli mpo na botosi \p \v 1 Soki botosi penza Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli penza mitindo na Ye oyo nazali kopesa bino lelo ; Yawe, Nzambe na bino, akotombola bino likolo ya bikolo nyonso ya mokili. \v 2 Tala mapamboli oyo ekopesamela bino mpe ekolanda bino tango bokotosa Yawe, Nzambe na bino : \pm \v 3 Bokopambolama na engumba mpe bokopambolama na bilanga. \pm \v 4 Mabota na bino ekopambolama ; milona na bino mpe bibwele na bino : bangombe na bino, bameme mpe bantaba na bino ekopambolama. \pm \v 5 Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekopambolama. \pm \v 6 Bokopambolama tango bokokota mpe bokopambolama tango bokobima. \p \v 7 Yawe akosala ete banguna oyo bakotelemela bino bakokweyisama liboso na bino ; bakoya epai na bino na nzela moko, kasi bakokima bino na banzela sambo. \v 8 Yawe Nzambe akopambola bibombelo na bino ya biloko mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Yawe Nzambe akopambola bino na mokili oyo azali kopesa bino. \p \v 9 Yawe akokomisa bino libota na Ye ya bule ndenge alakaki bino tango alapaki ndayi, pamba te bokobatela mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, mpe bokotambola na banzela na Ye. \v 10 Bongo bato nyonso ya mokili bakomona ete bozali penza bato ya Yawe mpe bakobanga bino. \v 11 Yawe akotondisa bino na bozwi ebele : mabota, bibwele, milona kati na mokili oyo alapaki ndayi epai ya bakoko na bino ete akopesa bino. \v 12 Mpo na bolamu na yo, Yawe akofungola likolo, ebombelo ya bamvula na Ye, mpo na konokisa mvula na mokili na bino na eleko ya malamu ; mpe akopambola misala nyonso ya maboko na bino. Bikolo ebele ekodefa epai na bino, kasi bino bokodefa ata na ekolo moko te. \v 13 Yawe akokomisa bino mito, kasi mikila te ; pamba te bokobatela penza mitindo ya Yawe, Nzambe na bino, oyo nazali kopesa bino lelo mpe bokosalela yango penza. Lokumu na bino ekozala kaka likolo, ekokita te. \v 14 Kati na mitindo oyo nazali kopesa bino lelo, bopengwa ata na moko te, mpo na kolanda banzambe mosusu mpe kosalela yango. \s1 Bilakeli mabe mpo na bozangi botosi \p \v 15 Kasi soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli te mitindo mpe bikateli na Ye, oyo nazali kopesa bino lelo, tala bilakeli mabe oyo ekokomela bino mpe ekokanga bino : \pm \v 16 Bokolakelama mabe kati na engumba mpe bokolakelama mabe kati na bilanga. \pm \v 17 Bitunga na bino mpe mesa na bino oyo bosalelaka mapa ekolakelama mabe. \pm \v 18 Mabota na bino, milona na bino, bibwele na bino : bangombe, bameme mpe bantaba ekolakelama mabe. \pm \v 19 Bokolakelama mabe tango bokokota mpe bokolakelama mabe tango bokobima. \p \v 20 Kati na nyonso oyo bokosala, Yawe akotindela bino bilakeli mabe, minyoko mpe mikakatano ; bongo bokowumela te mpo na kobebisama nye likolo ya mabe oyo bosalaki ya kosundola Yawe. \p \v 21 Yawe akotindela bino bokono oyo ebomaka kino akobebisa bino kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa. \v 22 Yawe akosilisa koboma bino na bokono ya ndenge na ndenge oyo akotindela bino : fievele, kosila nzoto, mpese. Akotinda lisusu bokono oyo ekobebisa bilanga na bino : kozanga mvula, banyama mike oyo ebebisaka milona mpe bibende. Bokono nyonso oyo ekolanda bino kino bokosila kokufa. \v 23 Mapata oyo ezali likolo ya mito na bino ekokoma lokola bronze mpe ekolekisa lisusu mvula te, mpe mabele oyo ezali na se ya makolo na bino ekokoma makasi lokola libende mpe ekobotisa lisusu mabele te. \v 24 Kati na mokili na bino, Yawe akobongola mvula mpo ete ekoma putulu mpe zelo ; yango ekokweya wuta na likolo kino ekobebisa bino. \v 25 Yawe akosala ete banguna na bino balonga bino. Bakoya epai na bino na nzela moko mpe bino bokokima liboso na bango na banzela sambo. Bokokoma eloko ya somo na miso ya bikolo nyonso ya mokili. \v 26 Bibembe na bino ekokoma bilei ya bandeke nyonso mpe ya banyama ya zamba, bongo moto moko te akoya wana mpo na kobengana yango. \p \v 27 Yawe akotindela bino bokono oyo esilaka te lokola oyo atindaki na Ejipito : pota ya libumu, makwanza mpe mikusa ya nzoto. \v 28 Yawe akotindela bino bokono ya liboma, ya kokufa miso mpe ya mobulu na makanisi. \v 29 Na moyi makasi, bokotenga-tenga lokola bakufi miso na molili. Bokolonga te na makambo nyonso oyo bokosala. Mokolo na mokolo, bakonyokola bino mpe bakoyiba bino, mpe moto moko te akomonana mpo na kokangola bino. \p \v 30 Soki moko kati na bino azwi mwasi lokola mobandami na libala, mobali mosusu nde akosangisa na ye nzoto. Mosusu akotonga ndako, kasi akovanda yango te. Mosusu akolona elanga ya vino, kasi okobuka bambuma na yango te. \v 31 Bakokata bakingo ya bangombe na bino na miso na bino, kasi bokolia yango te. Bakokamata ba-ane na bino na makasi, na miso na bino, kasi ekozonga epai na bino te ; bakokaba epai ya banguna na bino, bameme mpe bantaba na bino ; mpe moto moko te akosunga bino. \v 32 Bakokaba bana na bino ya mibali mpe ya basi na ekolo mosusu, mpe bokofungola miso na bino mpo na kotala mokolo na mokolo bozongi na bango, kasi bokokoka kosala ata eloko moko te. \v 33 Bato oyo boyebi te bakolia bambuma ya mabele na bino mpe ya misala na bino nyonso. \v 34 Bokobela liboma likolo ya makambo oyo miso na bino ekobanda komona. \p \v 35 Yawe akotindela bino bokono oyo ekobuka bino mabolongo, makolo ; bokono oyo ekoki kobika te mpe ekopanzana banda na se ya matambe kino na mito. \p \v 36 Yawe akomema bino mpe mokonzi oyo bokopona mpo na koyangela bino, na ekolo oyo bino mpe bakoko na bino botikala nanu koyeba te. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya banzete mpe ya mabanga. \v 37 Bikolo nyonso epai wapi Yawe akomema bino, bakomona bakokima bino lokola eloko ya somo mpe bakobeta masapo mpo na kotiola bino. \p \v 38 Bokolona bankona ebele na bilanga, kasi bokobuka moke ; pamba te mabanki ekolia bankona wana. \v 39 Bokosala mpe bokobongisa bilanga ya vino, kasi bokotikala te komela vino yango mpe kobuka bambuma na yango, pamba te banyama mike oyo eliaka nzete ekobebisa yango. \v 40 Bokozala na banzete ya olive na mokili na bino mobimba, kasi bokopakola mafuta na yango te, pamba te bambuma ya olive ekokweya liboso ete ekomela. \v 41 Bokozala na bana ya mibali mpe ya basi, kasi bokobatela bango te, pamba te bakokende na bowumbu. \v 42 Mabanki ekolia banzete na bino nyonso mpe bambuma ya mabele na bino. \p \v 43 Mopaya oyo avandi kati na bino akoleka bino na lokumu tango nyonso, kasi bino bokokita se kokita ; \v 44 akodefisa bino, kasi bino bokokoka kodefisa ye te ; akozala moto, kasi bino bokozala mokila. \p \v 45 Tala bilakeli mabe nyonso oyo ekokomela bino, ekolanda bino mpe ekozwa bino, ekokanga bino kino bokobebisama ; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino, mpe bobatelaki te mitindo mpe bikateli oyo apesaki bino. \v 46 Bilakeli mabe oyo ekozala elembo mpe makambo ya kokamwa epai na bino mpe epai ya bakitani na bino mpo na libela. \p \v 47 Mpo ete bosalelaki te Yawe, Nzambe na bino, na esengo mpe na kosepela na tango ya bofuluki ; \v 48 tango bokozala na nzala mpe na posa ya komela, mpe tango bokozanga bilamba mpe bokokelela, bokosalela banguna oyo Yawe Nzambe akotindela bino. Akotia bino ekangiseli ya ebende na kingo kino akobebisa bino. \v 49 Yawe akotindela bino na mosika, wuta na suka ya mokili, ekolo moko oyo ezali lokola mpongo oyo ezali kopumbwa, ekolo oyo bokososola monoko na yango te ; ekobundisa bino. \v 50 Bato ya ekolo yango bazali na bilongi ya kanda-kanda, batosaka te bato oyo bazali mikolo mpe bayokelaka bilenge mawa te. \v 51 Bakolia bana ya bibwele na bino mpe bambuma ya mabele na bino, kino bakobebisa bino. Bakotikela bino ata ble te, vino ya sika te, mafuta te, ata bana ngombe na bino te, ata bana meme na bino te mpe ata bantaba na bino te kino bokobebisama. \p \v 52 Bakozingela bingumba na bino nyonso kati na mokili na bino kino bamir na bino ya milayi mpe ya makasi oyo botielaka mitema ekokweya. Bakozingela bingumba nyonso kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino. \v 53 Mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino tango bakozingela bino, bokolia bana na bino, bokolia misuni ya bana na bino ya mibali mpe ya basi oyo Yawe, Nzambe na bino, apesi bino. \v 54 Mobali ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, akoyokela lisusu moto mawa te : ezala ndeko na ye to mwasi oyo ye alingaka to bana na ye oyo batikali. \v 55 Akopesa na moto moko te kati na bango mosuni ya bana na ye oyo akozala kolia. Yango kaka nde bilei akotikala na yango mpo na pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino na tango bakozingela bino na bingumba na bino nyonso. \v 56 Mwasi ya malamu koleka kati na bino, oyo ayokelaka bato mawa, oyo aleki kitoko mpe amonanaka lokola nde matambe na ye enyataka mabele te, akotala na etaleli ya mabe mobali oyo ye alingaka, mwana na ye ya mobali to ya mwasi, \v 57 mwana oyo awuti kobima na libumu na ye, mpe bana oyo ye moko aboti ; pamba te akoluka kolia bango na nkuku, na tango oyo banguna na bino bakozingela bino, mpe na tango ya pasi oyo banguna na bino bakomonisa bino kati na bingumba na bino. \p \v 58 Tango bosaleli te maloba nyonso ya mibeko oyo ekomami na buku oyo mpe botosi te Kombo ya lokumu mpe ya somo, Yawe, Nzambe na bino ; \v 59 Yawe akotindela bino mpe bakitani na bino bitumbu ya somo : bapota minene oyo esilaka te mpe bokono ya makasi oyo esilaka te. \v 60 Akotindela bino bitumbu nyonso ya Ejipito, oyo bozalaki kobanga mpe yango ekotingama na bino. \v 61 Yawe akotindela bino lisusu lolenge nyonso ya bokono mpe bapota oyo ekomami te kati na buku oyo ya Mobeko, kino bokobebisama. \v 62 Bino oyo bozalaki ebele lokola minzoto na likolo, bokotikala kaka moke ; pamba te botosaki te Yawe, Nzambe na bino. \v 63 Ndenge kaka Yawe asepelaki kosalela bino bolamu mpe mpo na kokomisa bino ebele, ndenge wana mpe akosepela koboma bino mpe kobebisa bino ; akopikola bino na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa yango. \v 64 Boye, Yawe akopanza bino kati na bikolo nyonso ya mokili mobimba. Kuna bokogumbamela banzambe mosusu : banzambe ya nzete mpe ya mabanga oyo bino mpe bakoko na bino boyebaki te. \v 65 Kati na bikolo wana, bokozala na kimia te, bokozala na esika te ya kopemisa matambe ya makolo na bino. Kuna Yawe akokomisa bino motema likolo-likolo, miso elemba mpe nzoto elemba. \v 66 Bokowumela na bomoi oyo ezanga elikya, oyo etonda na kobanga, butu mpe moyi, mpe bokoyeba te ndenge nini bomoi na bino ekosuka. \v 67 Na tongo, bokoloba : « Pokwa ekokoma tango nini ? » Mpe na pokwa, bokoloba : « Tongo ekotana tango nini ? » Pamba te somo ekotonda na mitema na bino mpo na makambo nyonso oyo miso ekomona. \v 68 Yawe Nzambe akozongisa bino na bamasuwa na Ejipito, na mokili oyo nalobaki na bino ete bokomona yango lisusu te. Mpe kuna, bokomiteka bino moko epai ya banguna na bino lokola bawumbu ya mibali mpe ya basi, kasi moto moko te akosomba bino. \c 29 \p \v 1 Tala maloba ya boyokani oyo Yawe atindaki Moyize kosala elongo na bana ya Isalaele na etando ya Moabi, na likolo ya boyokani oyo asalaki na bango na ngomba Orebi. \ms1 Komipesa na Nzambe \s1 Moyize ayebisaki misala ya kala ya Yawe \p \v 2 Moyize abengisaki bana nyonso ya Isalaele mpe alobaki na bango : « Miso na bino emonaki makambo nyonso oyo Yawe asalaki na Ejipito epai ya Faraon, epai ya basali na ye nyonso mpe kati na mokili na ye mobimba. \v 3 Na miso na bino moko, bomonaki komekama monene, bilembo minene mpe bikamwa. \v 4 Kasi kino na mokolo ya lelo, Yawe apesaki bino te mayele mpo na kososola to miso mpo na komona to matoyi mpo na koyoka. \v 5 Na mibu tuku minei oyo Ngai Yawe nakambaki bino na esobe, bilamba na bino enzulukaki te mpe basandale na makolo na bino ekufaki te. \v 6 Boliaki mapa te mpe bomelaki vino te to masanga mosusu oyo elangwisaka. Nasalaki yango mpo boyeba ete Ngai nazali Yawe, Nzambe na bino. \v 7 Tango bokomaki na esika oyo, Sikoni, mokonzi ya Eshiboni, mpe Ogi, mokonzi ya Bashani, bayaki kobundisa biso, kasi tolongaki bango. \v 8 Tozwaki mokili na bango mpe topesaki yango lokola libula epai ya bato ya libota ya Ribeni, ya Gadi mpe epai ya ndambo ya libota ya Manase. \v 9 Bosalela malamu maloba ya boyokani oyo mpo ete bomona bolamu na makambo nyonso oyo bokosala. \s1 Komemia boyokani ya Nzambe elongo na bato \p \v 10 Bino nyonso, bokotelema lelo na miso ya Yawe, Nzambe na bino : bakambi na bino, bakonzi na bino ya masanga, bampaka na bino, bakonzi na bino ya basoda mpe bato mosusu kati na Isalaele \v 11 elongo na bana na bino mpe basi na bino mpe bapaya oyo bazali kati na milako na bino mpo na kobukela bino bakoni mpe kotokelaka bino mayi. \v 12 Botelemi awa mpo na kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe na bino ; boyokani oyo Yawe, Nzambe na bino, azali kosala elongo na bino, na mokolo ya lelo, na kolapa ndayi esangana na bilakeli mabe, \v 13 mpo na koyebisa bino, na mokolo ya lelo, ete bozali bato na Ye, mpe Ye azali Nzambe na bino ndenge alakaki yango, na nzela ya ndayi, epai na bino mpe bakoko na bino —Abrayami, Izaki mpe Jakobi. \v 14 Yawe azali kosala boyokani oyo, na nzela ya ndayi esangana na bilakeli mabe, elongo na bino kaka te, \v 15 kasi mpe elongo na ba-oyo bazali awa kati na biso, na mokolo ya lelo, liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mpe elongo na ba-oyo bazali awa te elongo na biso. \s1 Makebisi na tina na losambo mpo na banzambe mosusu \p \v 16 Bino moko boyebi ndenge nini tozalaki na Ejipito mpe ndenge nini tokatisaki bamboka oyo tolekaki. \v 17 Bomonaki kati na bango biloko na bango ya mbindo, banzambe ya bikeko basala na libaya, na libanga, na palata mpe na wolo. \v 18 Bosala keba ete, na mokolo ya lelo, mobali moko te, mwasi moko te, etuka moko te to libota moko te epengwa na nzela ya Yawe, Nzambe na biso, mpo na kokende kogumbamela banzambe wana ya bikeko. Bosala keba ete, kati na bino, ezala na mosisa moko te oyo ekobota ngenge ya bololo ya ndenge wana. \v 19 Sima na koyoka maloba oyo ya bilakeli, tika ete moto moko te kati na bino amipambola na koloba : ‹ Nakolonga na makambo na ngai nyonso atako natamboli kolanda baposa ya motema na ngai moko. › Pamba te, moto oyo akosala mabe oyo akomema moto oyo ayebi likambo te na libunga na ye. \v 20 Yawe akolimbisa ye te ; kanda makasi na Ye mpe zuwa na Ye ekokweyela moto wana. Bilakeli nyonso ya mabe oyo ekomama kati na buku oyo ekokweyela ye mpe Yawe akolongola kombo na ye kati na mokili. \v 21 Yawe akotia ye pembeni kati na bikolo nyonso ya Isalaele, akokaba ye na pasi ndenge ezali bilakeli mabe nyonso ya boyokani oyo ekomama kati na buku ya Mobeko. \s1 Nzambe akokokisa maloba na Ye \p \v 22 Milongo ya bana na bino oyo ekoya sima na bino mpe bapaya oyo bakowuta na mikili ya mosika bakomona bitumbu oyo Yawe akokweyisela mokili wana. \v 23 Mokili mobimba ekopela na moto ya sofolo mpe ekotonda na mungwa. Bakolona ata eloko moko te, eloko moko te ekobima mpe matiti ekobota te. Mokili yango ekobebisama ndenge Sodome mpe Gomore, Adima mpe Tseboyimi, ebebisamaki : bingumba oyo Yawe abebisaki na kanda na Ye ya makasi. \v 24 Bikolo nyonso ekotuna : ‹ Mpo na nini Yawe asali likambo ya boye na mokili oyo ? Mpo na nini kanda makasi boye ? › \v 25 Mpe eyano ekozala : ‹ Esalemaki bongo, pamba te bato oyo babukaki boyokani oyo Yawe, Nzambe ya bakoko na bango, asalaki elongo na bango tango abimisaki bango na Ejipito. \v 26 Bakendeki kosambela banzambe mosusu mpe bagumbamelaki bango, banzambe oyo bayebaki te mpe oyo Ye apekisaki bango. \v 27 Yango wana, kanda ya Yawe epeli na mokili wana mpe amemi bilakeli mabe nyonso oyo ekomami na buku oyo, kati na mokili wana. \v 28 Yawe apikolaki bango na mokili na bango na kanda na Ye ya makasi mpe na kotomboka na Ye ya makasi. Abwakaki bango na mokili mosusu ndenge ezali komonana lelo. › \p \v 29 Makambo oyo ebombama ezali mpo na Yawe, Nzambe na biso ; mpe makambo oyo emonisami ezali mpo na biso mpe bakitani na biso, mpo na tango nyonso, mpo ete tokoka kosalela maloba nyonso ya mibeko oyo. » \c 30 \s1 Isalaele akozongela Yawe \p \v 1 Maloba oyo nawuti koloba, mapamboli mpe bilakeli mabe oyo napesi yo mpo ete opona, ekokokisama. Soki obateli yango malamu na motema na yo kati na bikolo nyonso epai wapi Yawe, Nzambe na yo, akobengana yo ; \v 2 soki ozongi epai na Yawe, Nzambe na yo ; soki yo mpe bana na yo botosi Ye, na mitema mpe na milimo na bino mobimba, na makambo nyonso oyo natindi yo lelo, \v 3 Yawe, Nzambe na yo, akoyokela yo mawa : akozongisa bato na yo, oyo bakendeki na bowumbu mpe akosangisa bino lisusu wuta na bikolo nyonso epai wapi apanzaki bino. \v 4 Atako bokendeki na bamboka ya mosika kati na mokili, Yawe, Nzambe na bino, akoluka kosangisa bino longwa kuna mpe akozongisa bino. \v 5 Yawe, Nzambe na bino, akomema bino na mokili ya bakoko na bino, mpe bokozwa yango ; akosalela bino bolamu mpe akokomisa bino ebele koleka bakoko na bino. \v 6 Yawe, Nzambe na bino, akobulisa mitema na bino mpe mitema ya bakitani na bino mpo ete bolinga Ye na mitema mpe na milimo na bino mobimba, mpe mpo ete bozala na bomoi. \v 7 Yawe, Nzambe na bino, akotia bilakeli nyonso ya mabe likolo ya banguna na bino, oyo bayinaka bino mpe banyokolaka bino. \v 8 Bokotosa lisusu Yawe mpe bokosalela mitindo na Ye nyonso oyo nazali kopesa bino lelo. \v 9 Bongo Yawe, Nzambe na bino, akosala ete bomona bolamu kati na misala nyonso ya maboko na bino, mpe akopesa bino bana ebele, bibwele ebele mpe bambuma ebele kati na mokili na bino. Yawe akosepela na bino lisusu mpe akosalela bino bolamu, ndenge kaka asepelaki na bakoko na bino, \v 10 soki botosi Yawe, Nzambe na bino, mpe bobateli mitindo mpe bikateli na Ye, oyo ekomama kati na buku oyo ya Mobeko, mpe soki bozongi epai na Yawe, Nzambe na bino, na mitema mpe na milimo na bino mobimba. \s1 Kopona bomoi to kufa \p \v 11 Makambo oyo nazali kotinda yo lelo, ezali penza pasi te mpe elekeli yo te na makasi. \v 12 Ezali te kati na Likolo mpo ete okoka kotuna : « Nani akomata kuna na Likolo mpo na kozwela ngai yango mpe kosakolela ngai yango mpo ete nakoka kotosa yango ? » \v 13 Ezali te na ngambo mosusu ya ebale monene mpo ete okoka kotuna : « Nani akokatisa ebale monene mpo na kokamata yango mpe kosakolela ngai yango, mpo ete nakoka kotosa yango ? » \v 14 Te, liloba yango ezali pene na yo, ezali kati na monoko na yo mpe kati na motema na yo, mpo ete okoka kotosa yango. \p \v 15 Tala, nasili kotia lelo, liboso na yo, bomoi mpe bolamu, kufa mpe mabe. \v 16 Tala likambo oyo Ngai natindi yo lelo : linga Yawe, Nzambe na yo, tambola na banzela na Ye mpe batela mitindo na Ye, bikateli na Ye mpe mibeko na Ye. Bongo okozala na bomoi, mpe bokokoma ebele ; mpe Yawe, Nzambe na yo, akopambola yo kati na mokili oyo bozali kokota mpo na kozwa. \v 17 Kasi soki motema na yo epengwi mpe otosi te, soki okosami na kogumbamela banzambe mosusu mpe na kosambela yango, \v 18 nalobi na yo, na mokolo ya lelo, ete okobebisama solo, okowumela lisusu te kati na mokili oyo ezali na ngambo mosusu ya Yordani, epai wapi bokokota mpo na kozwa. \p \v 19 Na mokolo ya lelo, nazwi likolo mpe se lokola batatoli mpo na yo : nasili kotia liboso na yo bomoi mpe kufa, mapamboli mpe bilakeli mabe. Sik’oyo, pona bomoi mpo ete yo mpe bana na yo bozala na bomoi. \v 20 Mpe pona kolinga Yawe, Nzambe na yo, koyoka mongongo na Ye mpe kokangama na Ye, pamba te azali bomoi na yo mpe akopesa yo mibu ebele kati na mokili oyo Yawe alakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya bakoko na yo —Abrayami, Izaki mpe Jakobi. \c 31 \ms1 Misala ya suka ya Moyize \s1 Moyize aponi Jozue lokola mokitani na ye \p \v 1 Moyize akobaki koloba maloba oyo epai ya bana nyonso ya Isalaele : \v 2 « Nakokisi sik’oyo mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama mpe nazali lisusu na makasi te ya kokamba bino. Yawe alobaki na ngai : ‹ Okokatisa Yordani te oyo ozali komona. › \v 3 Yawe, Nzambe na bino, akotambola Ye moko liboso na bino, akobebisa bikolo oyo ezali liboso na bino mpo ete bokamata mokili na bango ; Jozue nde akotambola liboso na bino ndenge Yawe alobaki. \v 4 Yawe akobebisa bango ndenge kaka asalaki Sikoni mpe Ogi, bakonzi ya bato ya Amori, oyo abebisaki elongo na bamboka na bango. \v 5 Yawe akokaba bango na maboko na bino mpe bokosala bango makambo nyonso oyo natindaki bino. \v 6 Boyika mpiko mpe bozala na molende, bobanga bango te mpe bozala na somo te liboso na bango ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino, akotika bino te mpe akobwaka bino te. » \p \v 7 Bongo Moyize abengisaki Jozue mpe alobaki na ye na miso ya bana nyonso ya Isalaele : « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokende elongo na bato oyo kino na mokili oyo Yawe alakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi, mpe okokabola yango mpo na bango lokola libula na bango. \v 8 Ye moko Yawe akotambola liboso na yo mpe akozala elongo na yo. Kobanga te mpe yika mpiko. » \s1 Botangi mobeko na miso ya bato \p \v 9 Boye Moyize akomaki mibeko oyo mpe apesaki yango epai ya Banganga-Nzambe, bana mibali ya Levi, oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe, mpe epai ya bampaka nyonso ya Isalaele. \p \v 10 Moyize atindaki bango : « Na suka ya mibu sambo nyonso, na mobu ya kotika baniongo, na tango ya feti ya Bandako ya kapo, \v 11 tango bana nyonso ya Isalaele bakopusana liboso ya Yawe, Nzambe na bino, na esika oyo akopona, bokotanga mibeko oyo liboso na bango mpo ete matoyi na bango ekoka koyoka. \v 12 Bosangisa bato : mibali, basi, bana mpe bapaya oyo bazali kati na bingumba na bino mpo ete bakoka koyoka mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, mpe kosalela malamu maloba nyonso ya mibeko oyo. \v 13 Bana na bango oyo bayebi mibeko oyo te basengeli koyoka yango malamu mpe koyekola kotosa Yawe, Nzambe na bino, tango nyonso oyo bokovanda kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. » \s1 Yawe asakoli botomboki ya Isalaele \p \v 14 Yawe alobaki na Moyize : « Tala sik’oyo, mokolo ya kufa na yo ekomi pene. Benga Jozue, mpe bokota na Ndako ya kapo ya Bokutani epai wapi nakopesa ye mitindo na Ngai. » \p Boye Moyize mpe Jozue bakendeki mpe bakotaki na Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 15 Yawe amimonisaki epai na bango lokola likonzi ya lipata kati na Ndako ya kapo ya Bokutani ; mpe likonzi yango ya lipata etelemaki na ekuke ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 16 Yawe alobaki na Moyize : « Ozali kokende kopema elongo na bakoko na yo ; mpe, kala mingi te, bato oyo bakopengwa mpo na kosalela banzambe ya bapaya kati na mokili oyo bozali kokota, bakobosana Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai, oyo nasalaki elongo na bango. \v 17 Na mokolo wana, nakosilikela bango mpe nakobosana bango. Boye, nakobombela bango elongi na Ngai, mpe bakobebisama. Bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango. Mpe na mokolo wana, bakomituna : ‹ Ezali te mpo ete Nzambe na biso azali lisusu elongo na biso te nde bokono oyo ekomeli biso te ? › \p \v 18 Solo, na mokolo wana, nakobombela bango elongi na Ngai mpo na mabe nyonso oyo basalaki, wana bakendeki epai ya banzambe mosusu. \p \v 19 Sik’oyo, koma nzembo oyo mpe lakisa yango yo moko epai ya bana ya Isalaele, mpe sala ete bayemba yango mpo ete ezala litatoli mpo na Ngai, liboso na bango. \v 20 Pamba te nakokotisa bango na mokili oyo ezali kobimisa miliki mpe mafuta ya nzoyi, mokili oyo nalakaki kopesa epai ya bakoko na bango na nzela ya ndayi : bakolia, bakotonda mpe bakoya minene ; bongo bakokende epai ya banzambe mosusu mpe bakosambela yango, bakobwaka Ngai mpe bakobuka boyokani na Ngai. \v 21 Tango bokono ebele mpe pasi mingi ekokomela bango, nzembo oyo ekotatola mpo na kofunda bango, pamba te bakitani na bango bakobosana yango te. Nayebi makambo oyo bazali kokana kosala atako nakotisi bango nanu te kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi. » \p \v 22 Boye, Moyize akomaki nzembo yango kaka na mokolo wana mpe alakisaki yango bana ya Isalaele. \p \v 23 Yawe apesaki mitindo oyo epai ya Jozue, mwana mobali ya Nuni : « Yika mpiko mpe zala na molende, pamba te okokotisa bana ya Isalaele kati na mokili oyo nalakaki kopesa bango na nzela ya ndayi, mpe Ngai moko nakozala elongo na yo. » \p \v 24 Moyize asilisaki kokoma kati na buku maloba nyonso ya mobeko oyo. \v 25 Bongo Moyize apesaki mitindo oyo epai ya Balevi oyo bazalaki komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe : \v 26 « Bokamata buku oyo ya Mobeko mpe botia yango pembeni ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Nzambe na bino ; ekozala kuna lokola litatoli mpo na bino. \v 27 Pamba te nayebi ndenge nini bozali batomboki mpe mito makasi. Soki, wana nazali nanu na bomoi kati na bino, bozali batomboki liboso ya Yawe, ekozala boni sima na kufa na ngai ? \v 28 Bosangisa liboso na ngai bakambi nyonso ya mabota na bino mpe bakalaka na bino, mpo ete naloba maloba oyo na matoyi na bango mpe nazwa likolo mpe se lokola batatoli mpo na kofunda bango. \v 29 Pamba te nayebi solo ete sima na kufa na ngai, bokomibebisa mpe bokopengwa mosika na nzela oyo natindaki bino. Na mikolo oyo ezali koya, bokono ekokweyela bino, pamba te bokosala mabe na miso ya Yawe mpe bokotumbola kanda na Ye na nzela ya misala ya maboko na bino. » \s1 Moyize akomi loyembo \p \v 30 Moyize alobaki maloba ya nzembo yango, banda na ebandeli kino na suka, wana lisanga mobimba ya bana ya Isalaele ezalaki koyoka : \c 32 \q1 \v 1 Oh likolo, yoka malamu, pamba te nalingi koloba ! \q2 Oh mabele, yoka malamu maloba ya monoko na ngai ! \q1 \v 2 Tika ete mateya na ngai ekweya lokola mvula, \q2 mpe maloba na ngai ekita lokola londende, \q1 lokola mvula moke na likolo ya matiti, \q2 lokola mvula makasi na likolo ya milona ! \b \q1 \v 3 Nakosakola Kombo ya Yawe. \q2 Bokumisa monene ya Nzambe na biso ! \q1 \v 4 Yawe azali lokola Libanga ; \q2 misala na Ye ezali ya kokoka, \q1 mpe banzela na Ye nyonso ezali sembo ; \q2 azali Nzambe ya boyengebene, asalaka mabe te ; \q2 azali sembo mpe alima. \b \q1 \v 5 Kasi bino, bomibebisaki liboso na Ye ; \q2 bozali lisusu bana na Ye te, mpo na mabe na bino, \q2 bino molongo ya bana mabe mpe ya bapengwi. \q1 \v 6 Boni, ezali ndenge wana nde bofuti Yawe ? \q2 Oh bato ya maboma, bato bazanga bwanya ! \q1 Boni, Yawe azali Tata na bino te ? \q2 Azali Mokeli na bino te ? \q2 Ye nde asalaki bino mpe abongisaki bino. \b \q1 \v 7 Bokanisa mikolo ya kala, \q2 mpe botala milongo oyo eleka kala ! \q1 Botuna na batata na bino, mpe bakoyebisa bino. \q2 Botuna na bampaka na bino, mpe bakolimbolela bino. \q1 \v 8 Tango Ye-Oyo-Aleki-Likolo apesaki \q2 na ekolo moko na moko mabele na yango, \q1 tango akabolaki bato nyonso, \q2 atiaki bandelo mpo na bato \q2 kolanda motango ya ba-anjelu ya Nzambe. \q1 \v 9 Pamba te eteni ya Yawe ezali bato na Ye ; \q2 Jakobi azali libula na Ye. \b \q1 \v 10 Amonaki ye na esobe, \q2 kati na mokili oyo ekawuka, \q1 etonda na koganga ya somo. \q2 Azingelaki ye, abatelaki ye, \q1 akengelaki ye lokola mbuma ya liso na Ye. \q1 \v 11 Azali lokola mpongo \q2 oyo ezali kolakisa bana na yango kopumbwa. \q1 Epumbwaka pembeni-pembeni ya bana na yango, \q2 etandaka mapapu na yango mpo na kokanga bana na yango, \q2 mpe ememaka yango likolo ya masala na yango. \q1 \v 12 Ye moko Yawe akambaki bango ; \q2 nzambe moko te ya bapaya azalaki elongo na Ye. \b \q1 \v 13 Akambaki bango na bisika oyo eleki likolo kati na mokili, \q2 aleisaki bango bambuma ya elanga, \q1 amelisaki bango mafuta ya nzoyi oyo ezalaki kobima na libanga, \q2 mafuta oyo ezalaki kobima na mabele ya mabanga, \q1 \v 14 miliki ya bangombe mpe ya bameme ; \q2 apesaki bango mafuta ya bameme mpe ya bantaba, \q1 ya bana meme mpe ya ntaba ya mafuta ; \q2 mpe apesaki bameme ya mibali ya kitoko ya Bashani. \q1 Baliaki lisusu ble oyo eleki kitoko, \q2 bamelaki vino ya motane oyo ewutaki na bambuma ya vino. \b \q1 \v 15 Yeshuruni akomaki monene mpe moto makasi ; \q2 atondaki na biloko ya kolia, akomaki kilo mpe moselu ; \q1 asundolaki Nzambe oyo akelaki ye \q2 mpe abwakaki Libanga na ye, Mobikisi na ye. \q1 \v 16 Bapesaki Yawe kanda makasi \q2 likolo ya banzambe na bango ya bapaya, \q1 mpe bapesaki Ye kanda na nzela ya misala na bango ya mbindo. \q1 \v 17 Babonzaki bambeka epai ya milimo mabe \q2 oyo ezali Nzambe te ; \q1 babonzaki yango epai ya banzambe oyo bango bayebaki te, \q2 banzambe oyo ebimaki sika, \q2 banzambe oyo bakoko na bino basambelaki te. \q1 \v 18 Bobosanaki Libanga oyo ebotaki bino \q2 mpe bomonaki pamba Nzambe oyo apesaki bino bomoi. \b \q1 \v 19 Yawe amonaki likambo oyo mpe abwakaki bango, \q2 pamba te bana na bango ya mibali mpe ya basi bapesaki Ye kanda. \q1 \v 20 Alobaki : « Nakobombela bango elongi na Ngai, \q2 mpe nakotala ndenge nini suka na bango ekozala, \q1 pamba te bazali molongo ya bato mabe, \q2 bana bazanga boyengebene. \q1 \v 21 Bazwelaki Ngai mbanda oyo azali ata nzambe te, \q2 batumbolaki kanda na Ngai likolo ya biloko \q1 oyo ekoki kutu kozala ata banzambe ya bikeko te. \q2 Boye, Ngai mpe nakosala ete bango mpe \q1 bayokela oyo ezali ata ekolo te zuwa ; \q2 nakosala ete ekolo moko ya bazoba epesa bango kanda. \q1 \v 22 Pamba te kanda na Ngai epeli makasi lokola moto, \q2 mpe ekozikisa kino se ya mokili ya bakufi, \q1 ekotumba mabele, bambuma na yango \q2 mpe miboko ya bangomba. \b \q1 \v 23 Nakobakisela bango pasi likolo ya pasi, \q2 nakobwakela bango makonga na Ngai. \q1 \v 24 Nakotindela bango nzala makasi, \q2 bokono oyo esalaka nzoto moto-moto \q1 mpo ete esilisa bango, \q2 mpe etumbu oyo ekoboma bango. \q1 Nakotindela bango minu ya banyama ya zamba, \q2 ngenge ya nyoka oyo etambolaka na libumu. \q1 \v 25 Na libanda, mopanga ekokomisa bango bato bazanga bana ; \q2 kati na bandako na bango, somo ekokonza ; \q1 bilenge mibali mpe bilenge basi, \q2 bana mike mpe bampaka, bango nyonso bakokufa. \q1 \v 26 Nalobaki : Nakopanza bango \q2 mpe nakosala ete bato babosana bango. \q1 \v 27 Kasi nazali kobanga ete banguna bafinga Ngai \q2 mpe bayini na bango bamikosa te na koloba : \q1 ‹ Tolongaki na makasi na biso moko, \q2 Yawe asalaki eloko moko te. › » \b \q1 \v 28 Bato oyo bazali ekolo ezanga mayele, \q2 bazali na bososoli te kati na bango. \q1 \v 29 Soki kaka bazalaki bato ya bwanya, \q2 balingaki kososola likambo oyo \q2 mpe koyeba ndenge nini suka na bango ekozala ! \q1 \v 30 Ndenge nini moto moko akoki kobengana bato nkoto moko, \q2 to bato mibale, kobundisa bato nkoto zomi \q1 soki Libanga na bango atekaki bango te \q2 to soki Yawe asundolaki bango te ? \q1 \v 31 Pamba te Libanga na bango azali lokola libanga na biso te ; \q2 bango moko banguna na biso bayebi yango. \q1 \v 32 Bilanga na bango ya vino ewuti \q2 na bilanga ya vino ya Sodome mpe na bilanga ya Gomore. \q1 Bambuma na bango etondi na ngenge, \q2 mpe maboke ya bambuma na bango ezali bololo. \q1 \v 33 Vino na bango ezali ngenge ya banyoka, \q2 ngenge ya etupa, ngenge oyo ebomaka. \b \q1 \v 34 « Boni, ebombami epai na Ngai te ? \q2 Ekangami te lokola elembo na bomengo na Ngai ? \q1 \v 35 Ngai nde nazongisaka mabe na mabe, \q2 Ngai nde nakofuta moto na moto. \q1 Tango lokolo na bango ekobeta libaku, \q2 na tango wana nde pasi na bango ekoya na lombangu, \q1 mpe nyonso oyo Nzambe abongisa wuta kala \q2 mpo na bango ekowumela te. » \b \q1 \v 36 Yawe akosambisa bato na Ye, \q2 mpe akoyokela basali na Ye mawa ; \q1 tango akomona ete makasi na bango esili, \q2 mpe akomona ete ezali lisusu na moto moko te \q2 oyo bakoki kokanga to kokangola. \q1 \v 37 Bongo akoloba : « Wapi banzambe na bango ? \q2 Wapi libanga epai wapi babombamaki ? \q1 \v 38 Wapi banzambe oyo ezalaki kolia mafuta ya bambeka na bango \q2 mpe komela makabo na bango ya vino ? \q1 Tika ete etelema mpo na kosalisa bino \q2 mpe kopesa bino ebombamelo ! \b \q1 \v 39 Botala sik’oyo, Ngai kaka nde nazali Nzambe ; \q2 mosusu azali te ! \q1 Nabomaka mpe napesaka bomoi ; \q2 nazokisaka mpe nabikisaka. \q1 Mpe moto moko te akoki kokangola \q2 oyo ezali na maboko na Ngai. \q1 \v 40 Natomboli loboko na Ngai na likolo, \q2 mpe nalobi : Na Kombo na Ngai, \q1 \v 41 tango nakopelisa minu ya mopanga na Ngai, \q2 mpe loboko na Ngai ekosimba yango mpo na kosambisa, \q1 nakozongisa mabe na mabe epai ya bayini na Ngai, \q2 mpe nakofuta ba-oyo balingaka Ngai te. \q1 \v 42 Tango mopanga na Ngai ekozala kosasa misuni ya bato, \q2 nakolangwisa makonga na Ngai na makila \q1 ya bato oyo babomi, ya bakangami \q2 mpe ya mito ya bakonzi ya banguna. » \b \q1 \v 43 Oh bikolo, bosepela elongo na bato na Ye ! \q2 Bino ba-anjelu nyonso, bogumbamela Nzambe ; \q1 pamba te akozongisa mabe na mabe \q2 mpo na makila ya basali na Ye, \q1 akozongisa mabe na mabe epai ya banguna na Ye \q2 mpe akosala mosala ya bolimbisi masumu \q2 mpo na mokili na Ye mpe bato na Ye. \p \v 44 Moyize ayaki mpe alobaki maloba nyonso ya nzembo oyo, mpe bato nyonso bazalaki koyoka ye ; azalaki elongo na Oze, mwana mobali ya Nuni. \p \v 45 Tango Moyize asilisaki koloba maloba oyo nyonso epai ya bana nyonso ya Isalaele, \v 46 alobaki na bango lisusu : « Bobatela malamu kati na mitema na bino maloba nyonso oyo nalobi na bino lelo, mpo ete bopesa mitindo epai ya bana na bino ete batosa penza maloba nyonso ya mibeko oyo. \v 47 Ezali maloba ya pamba te epai na bino, kasi ezali nde bomoi na bino. Ezali na nzela na yango nde bokozala na bomoi molayi kati na mokili oyo bokozwa sima na kokatisa Yordani. » \s1 Yawe asakoli kufa ya Moyize \p \v 48 Na mokolo wana kaka, Yawe alobaki na Moyize : \v 49 « Mata na ngomba Abarimi, ngomba Nebo oyo ezali kati na Moabi mpe etalana na Jeriko ; mpe tala mokili ya Kanana, mokili oyo nazali kopesa epai ya bana ya Isalaele lokola libula na bango. \v 50 Okokufa na ngomba oyo okomata ; mpe kuna, okokende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ndenge Aron, ndeko na yo ya mobali, akufaki na ngomba Ori mpe akutanaki na bakoko na ye, \v 51 pamba te bino mibale botambolaki te na boyengebene liboso na Ngai, na miso ya bana ya Isalaele, na mayi ya Meriba, pembeni ya Kadeshi, kati na esobe ya Tsini, mpe bobatelaki te bosantu na Ngai kati na bana ya Isalaele. \v 52 Yango wana okomona mokili yango kaka na mosika, okokota te na mokili oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. » \c 33 \s1 Moyize apamboli mabota zomi na mibale ya Isalaele \p \v 1 Tala lipamboli oyo Moyize, moto na Nzambe, asakolaki mpo na bana ya Isalaele liboso ete akufa. \v 2 Alobaki : \q1 « Yawe awutaki na Sinai ; \q2 wuta na Seiri, abimelaki bango lokola moyi na tongo, \q1 angengaki epai na bango wuta na ngomba Parani, \q2 ayaki elongo na ebele ya bankoto ya ba-anjelu na Ye \q2 mpe asimbaki na loboko na Ye kongenga ya Mobeko. \q1 \v 3 Solo, olingaka bato, \q2 basantu nyonso basimbami na loboko na Yo. \q1 Na makolo na Yo, bango nyonso bagumbamaka. \q2 Ezali epai na Yo nde bazwaka mateya. \q1 \v 4 Moyize apesa biso Mobeko oyo \q2 ezali bozwi ya lisanga ya Jakobi. \q1 \v 5 Azalaki mokonzi ya Yeshuruni \q2 tango bakambi ya bato basanganaki \q2 elongo na mabota ya Isalaele. \b \q1 \v 6 Tika ete Ribeni awumela na bomoi mpe akufa te, \q2 mpe tika ete bato na ye bazala moke te ! » \p \v 7 Tala mapomboli oyo alobaki mpo na Yuda : \q1 « Oh Yawe, yoka koganga ya Yuda ; \q2 zongisa ye epai ya bato na ye ! \q1 Tika ete maboko na ye elongisa banzela na ye, \q2 mpe tika ete osunga ye liboso ya banguna na ye ! » \p \v 8 Mpo na Levi, alobaki : \q1 « Urimi mpe Tumimi na Yo ezali mpo na moyengebene \q2 oyo omekaki ye motema na Masa, \q2 mpe oyo owelanaki na ye na mayi ya Meriba, \q1 \v 9 oyo atalisaki bolingo epai na Yo koleka, \q2 bolingo epai ya baboti na ye, \q1 bandeko na ye mpe bana na ye moko, \q2 mpo na kotosa maloba na Yo \q2 mpe kobatela boyokani na Yo. \q1 \v 10 Ateyaka makebisi na Yo epai ya Jakobi, \q2 mpe mibeko na Yo epai ya Isalaele ; \q1 abonzaka ansa liboso na Yo, \q2 mpe mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo na Yo. \q1 \v 11 Oh Yawe, pambola makasi na ye na mosala, \q2 mpe sepela na mosala ya maboko na ye. \q1 Buka loketo ya bato oyo bazali kotelemela ye, \q2 mpe loketo ya bayini na ye \q2 kino bakoka lisusu te kotelema. » \p \v 12 Mpo na Benjame, alobaki : \q1 « Tika ete molingami ya Yawe azala na kimia \q2 pembeni na Ye, \q1 pamba te Ye nde abatelaka ye mokolo mobimba ; \q2 mpe moto oyo Yawe alingaka \q2 apemaka na kati-kati ya mapeka na Ye ! » \p \v 13 Mpo na Jozefi, alobaki : \q1 « Tika ete Yawe apambola mokili na ye \q2 na nzela ya mamwe ya motuya, oyo ewutaka na likolo, \q1 mpe na nzela ya mayi ya mozindo \q2 oyo etiolaka na se ya mabele \q1 \v 14 elongo na biloko oyo eleki motuya, \q2 oyo mayi ekolisaka mpe oyo eleki kitoko, \q2 oyo ebimaka sanza na sanza ; \q1 \v 15 na nzela ya bakado ya kitoko ya bangomba ya kala, \q2 mpe na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko \q2 ya bangomba mike oyo ewumelaka mobu na mobu ; \q1 \v 16 na nzela ya bambuma oyo eleki kitoko, \q2 bambuma oyo etondi kati na mokili ! \q1 Tika ete Nzambe oyo avandaka \q2 kati na nzete moke oyo ezali kopela moto \q1 apambola moto ya Jozefi \q2 mpe elongi ya moto oyo babulisi kati na bandeko na ye ! \q1 \v 17 Na lokumu, azali lokola mwana liboso ya ngombe ; \q2 maseke na ye ezali lokola ya mpakasa. \q1 Na nzela na yango nde ebetaka bikolo, \q2 ata bikolo oyo ezali na suka ya mokili. \q1 Tala ndenge nini bato ya Efrayimi bazali ebele penza, \q2 tala ndenge nini bato ya Manase bazali penza ebele ! » \p \v 18 Mpo na Zabuloni, alobaki : \q1 « Oh Zabuloni, sepela na kobima na yo ! \q2 Mpe yo Isakari, tika ete osepela kati na bandako na yo ya kapo. \q1 \v 19 Bakobengisa bato na likolo ya ngomba, \q2 mpe bakobonza kuna bambeka ya bosembo, \q1 bakosala feti mpo na bomengo ya bibale minene, \q2 mpe mpo na bozwi oyo ebombama na zelo ya libongo. » \p \v 20 Mpo na Gadi, alobaki : \q1 « Tika ete apambolama, \q2 moto oyo akoyeisa mokili ya Gadi monene ! \q1 Gadi akowumela kuna lokola nkosi \q2 oyo ezali kopasola banda na lokolo kino na moto. \q1 \v 21 Aponaki mabele ya kitoko mpo na ye moko, \q2 bapesaki ye eteni oyo ebongi na mokambi. \q1 Atambolaki liboso ya bato ; \q2 mpe asalaki mosala kolanda bosembo ya Yawe \q2 mpe bikateli na Ye liboso ya Isalaele. » \p \v 22 Mpo na Dani, alobaki : \q1 « Dani azali mwana ya nkosi \q2 oyo epumbwaka wuta na Bashani. » \p \v 23 Mpo na Nefitali alobaki : \q1 « Nefitali atondi na bolamu mpe na mapamboli na Yawe, \q2 akozwa libula ya weste mpe ya sude. » \p \v 24 Mpo na Aseri, alobaki : \q1 « Aseri azali mwana mobali oyo aleki na mapamboli. \q2 Tika ete bandeko na ye basalela ye \q2 mpe tika ete makolo na ye ezinda na mafuta. \q1 \v 25 Bikangelo ya bikuke na yo ekozala ya bibende mpe ya bronze. \q2 Mpe tika ete makasi na yo ewumela ndenge mikolo na yo ezali. \b \q1 \v 26 Moko te akokani na Nzambe ya Yeshuruni, \q2 Nzambe oyo atambolaka na likolo lokola mpunda mpo na kosunga yo, \q2 mpe na mapata, kati na nkembo na Ye. \q1 \v 27 Nzambe ya tango nyonso azali ekimelo na yo, \q2 azali tango nyonso Mosungi awa na se. \q1 Ezali Ye nde abenganaka banguna na yo liboso na yo \q2 mpe apesaka yo mitindo ya koboma bango. \q1 \v 28 Boye Isalaele akowumela na kimia, \q2 mpe etima ya Jakobi ezali kotiola \q1 kati na mokili ya ble mpe ya vino ya sika, \q2 epai wapi likolo ezali kokitisa mamwe. \q1 \v 29 Oh Isalaele, ozali solo libota ya esengo ! \q2 Libota nini ekokani na yo, \q1 yo libota oyo Yawe abikisi ? \q2 Ye azali nde nguba na yo mpe mosungi na yo ya nkembo. \q1 Banguna na yo bakokima liboso na yo, \q2 mpe okonyata bisika na bango, oyo eleki likolo. » \c 34 \s1 Kufa ya Moyize \p \v 1 Wuta na bitando ya Moabi, Moyize amataki na likolo ya ngomba Nebo kino na songe ya ngomba Pisiga oyo etalana na Jeriko. Kuna, Yawe alakisaki ye mokili mobimba : wuta na Galadi kino na Dani, \v 2 etuka nyonso ya Nefitali, ya Efrayimi mpe ya Manase ; mokili nyonso ya Yuda kino na ebale monene Mediterane, \v 3 mpe etuka ya Negevi mpe etuka ya lubwaku ya Jeriko, engumba ya banzete ya mbila kino na Tsoari. \v 4 Bongo Yawe alobaki na ye : « Tala mokili oyo nalakaki kopesa, na nzela ya ndayi, epai ya Abrayami, Izaki mpe Jakobi, tango nalobaki na bango : ‹ Nakopesa yango epai ya bakitani na bino. › Nasali ete omona yango na miso na yo moko, kasi okokota kuna te. » \p \v 5 Moyize, mosali na Yawe, akufaki kuna na Moabi ndenge Yawe alobaki na ye. \v 6 Ye moko Nzambe akundaki ye kati na Moabi, na lubwaku oyo etalana na Beti-Peori ; mpe kino lelo, moto moko te ayebi esika oyo kunda na ye ezali. \p \v 7 Moyize azalaki na mibu nkama moko na tuku mibale ya mbotama tango akufaki. Miso na ye elembaki te mpe makasi na ye esilaki te. \v 8 Bana ya Isalaele balelaki Moyize mikolo tuku misato, na etando ya Moabi kino tango ya kolela mpe ya matanga esilaki. \p \v 9 Jozue, mwana mobali ya Nuni, atondisamaki na Molimo ya bwanya, pamba te Moyize atielaki ye maboko. Bana ya Isalaele bayokelaki ye mpe batosaki mitindo oyo Yawe apesaki na Moyize. \p \v 10 Wuta mokolo wana, mosakoli moko te atikalaki lisusu kobima kati na Isalaele, oyo akokanaki na Moyize oyo Yawe azalaki kosolola na ye miso na miso, \v 11 oyo asalaki bikamwa nyonso mpe bilembo nyonso ya minene oyo Yawe atindaki ye kosala kati na Ejipito liboso ya Faraon, ya bakalaka na ye nyonso mpe ya mokili na ye mobimba ; \v 12 pamba te moto moko te atikalaki komonisa misala ya nguya mpe ya somo lokola misala oyo Moyize asalaki na miso ya bana nyonso ya Isalaele.