\id 2SA Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h 2 Samuele \toc1 2 Samuele \toc2 2 Samuele \toc3 2Sa \mt1 2 Samuele \c 1 \ms1 Bokonzi ya Davidi \s1 Davidi azwi sango ya kufa ya Saulo mpe ya Jonatan \p \v 1 Wana Saulo asilaki kokufa, Davidi azongaki na Tsikilagi sima na ye kolonga bato ya Amaleki. Mpe avandaki kuna mikolo mibale. \v 2 Na mokolo ya misato, moto moko awutaki na molako ya Saulo mpe ayaki na bilamba epasuka, moto etonda na putulu. Tango akomaki epai ya Davidi, amibwakaki na mabele mpo na kogumbama liboso ya Davidi. \v 3 Davidi atunaki ye : \pi1 — Owuti wapi ? \p Azongisaki : \pi1 — Nakimi wuta na molako ya Isalaele. \p \v 4 Davidi atunaki lisusu : \pi1 — Yebisa ngai makambo nini eleki kuna ? \p Moto yango alobaki : \pi1 — Mampinga ya Isalaele ekimi bitumba ; ebele kati na bango bakweyi na bitumba mpe bakufi, ata Saulo mpe mwana na ye ya mobali, Jonatan, bakufi. \p \v 5 Bongo Davidi alobaki na elenge mobali oyo azalaki kopesa ye sango : \pi1 — Oyebi ndenge nini ete Saulo mpe mwana na ye ya mobali, Jonatan, bakufi ? \p \v 6 Elenge mobali azongisaki : \pi1 — Nazalaki na ngai koleka na likolo ya ngomba Giliboa, mpe namonaki Saulo alaleli likonga na ye. Namonaki lisusu bashar mpe basoda oyo babundaka likolo ya bampunda kokoma pene ya kokanga ye. \v 7 Tango kaka abalukaki mpe amonaki ngai, abengaki ngai ; mpe ngai nazongisaki : « Ngai oyo. » \v 8 Atunaki ngai : \pi1 — Ozali nani ? \p Nazongiselaki ye : \pi1 — Nazali moto ya Amaleki. \p \v 9 Alobaki na ngai : \pi1 — Pusana pene na ngai mpe boma ngai, pamba te nazali koyoka lisusu nzoto malamu te, atako nazali nanu na bomoi. \p \v 10 Boye napusanaki pene na ye mpe nabomaki ye, pamba te nayebaki ete akobika te na kotala ndenge babetaki ye. Sima, nazwaki ekoti na ye ya bokonzi, oyo azalaki na yango na moto mpe singa oyo alataki na loboko na ye, mpe namemi yango epai na yo, nkolo na ngai. \p \v 11 Bongo Davidi mpe basoda nyonso oyo bazalaki elongo na ye basimbaki bilamba na bango mpe bapasolaki yango. \v 12 Basalaki matanga, balelaki mpe bakilaki bilei kino na pokwa, mpo na Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali ; mpo na mampinga ya Yawe mpe mpo na libota ya Isalaele, mpo ete bakufaki na nzela ya mopanga. \b \p \v 13 Davidi atunaki elenge mobali oyo amemelaki ye sango : \pi1 — Ozali moto ya mboka nini ? \p Azongisaki : \pi1 — Nazali mwana mobali ya mopaya moko, moto ya Amaleki. \p \v 14 Davidi atunaki ye : \pi1 — Mpo na nini obangaki te kosembola loboko na yo mpo na koboma mopakolami na Yawe ? \p \v 15 Bongo Davidi abengaki moko kati na basoda na ye mpe alobaki : « Yaka, boma ye ! » Mpe soda yango abomaki ye. \p \v 16 Davidi alobaki na moto oyo amemelaki ye sango : « Tika ete makila na yo etangama na moto na yo moko, pamba te maloba na yo moko nde efundi yo mpo ete olobi : ‹ Nabomaki mopakolami na Yawe. › » \s1 Nzembo ya mawa mpo na Saulo mpe Jonatan \p \v 17 Davidi asalaki nzembo oyo ya mawa mpo na Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali. \v 18 Apesaki mitindo ete balakisa yango epai ya bato ya Yuda. Nzembo yango ya mawa ekomama kati na buku ya Moto ya Sembo. \q1 \v 19 Oh Isalaele, lokumu na yo ekweyi \q2 na likolo ya bangomba na yo. \q2 Ndenge nini bilombe bakweyi ! \q1 \v 20 Bopanza sango yango te kati na Gati, \q2 bopanza yango te na babalabala ya Ashikeloni, \q1 noki te bana basi ya bato ya Filisitia bakosepela, \q2 mpe bana basi ya mibali oyo bakatama ngenga te \q2 bakopumbwa na esengo. \q1 \v 21 Oh bangomba ya Giliboa, \q2 tika ete mamwe mpe mvula ekweya lisusu te na likolo na bino, \q1 ata na likolo ya bilanga oyo ebotaka bambuma \q2 mpe epai wapi makabo ewutaka ! \q1 Pamba te ezali kuna nde basambwisaki banguba ya bilombe, \q2 nguba ya Saulo oyo bakotikala kopakola lisusu mafuta te. \q1 \v 22 Tolotolo ya Jonatan ezalaki kozonga sima te \q2 soki esopi makila ya banguna te, \q1 mpe soki etoboli mafuta ya bilombe te ; \q2 mpe mopanga ya Saulo ezalaki kozonga te \q2 soki ekokisi mosala na yango te. \q1 \v 23 Na mikolo ya bomoi na bango, \q2 Saulo mpe Jonatan balinganaki makasi \q1 mpe bapesanaki lokumu ; \q2 mpe na kufa na bango, bakabolaki bango te. \q1 Bazalaki mbangu koleka bampongo, \q2 makasi koleka bankosi. \q1 \v 24 Oh bino bana basi ya Isalaele, bolela mpo na Saulo \q2 oyo alatisaki bino bilamba ya motane mpe biloko ya monzele, \q2 oyo atondisaki babiju ya wolo na bilamba na bino. \q1 \v 25 Ndenge nini bilombe bakweyi na bitumba ! \q2 Ndenge nini babomaki Jonatan na bangomba na yo ! \q1 \v 26 Ah, Jonatan, ndeko na ngai ya mobali, \q2 nazali na pasi na motema mpo na yo ! \q1 Ozalaki motuya mingi mpo na ngai. \q2 Bolingo na yo mpo na ngai ezalaki makasi \q2 koleka bolingo ya mwasi ! \q1 \v 27 Ndenge nini bilombe bakweyi ! \q2 Ah ! bibundeli ya bitumba ekomi pamba ! \c 2 \s1 Davidi akomi mokonzi ya Yuda \p \v 1 Sima na yango, Davidi atunaki Yawe : \pi1 — Nakoki na ngai kokende na moko kati na bingumba ya Yuda ? \p Yawe azongisaki : \pi1 — Okoki na yo kokende. \p Davidi atunaki lisusu : \pi1 — Nakende wapi ? \p Yawe azongisaki : \pi1 — Kende na Ebron. \p \v 2 Boye Davidi akendeki kuna elongo na basi na ye mibale : Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe Abigayili, mwasi oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli. \v 3 Davidi amemaki lisusu mibali oyo bazalaki elongo na ye, moko na moko elongo na libota na ye ; mpe bavandaki na bingumba ya Ebron mpe na bamboka na yango ya mike. \v 4 Bongo bato ya Yuda bayaki na Ebron mpe bapakolaki kuna Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya libota ya Yuda. \p Bayebisaki Davidi ete ezali bato ya Yabeshi ya Galadi nde bakundi Saulo. \v 5 Davidi atindaki bantoma mpo na koloba na bato ya Yabeshi ya Galadi : « Tika ete Yawe apambola bino na ndenge botalisaki motema malamu epai ya nkolo na bino, Saulo, mpe na ndenge bokundaki ye ! \v 6 Tika ete Yawe atalisa bino sik’oyo bolamu mpe boyengebene ! Lokola bosalaki bongo, ngai mpe nakotalisa bino bolamu yango kaka. \v 7 Sik’oyo, bozala makasi mpe boyika mpiko, pamba te nkolo na bino, Saulo, akufi. Kasi boyeba mpe ete bato ya Yuda bapakoli ngai mafuta mpo ete nakoma mokonzi na bango. » \s1 Etumba kati na mabota ya Davidi mpe ya Saulo \p \v 8 Na tango wana, Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya basoda ya Saulo, azwaki Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, mpe amemaki ye na Maanayimi. \v 9 Akomisaki ye mokonzi ya Galadi, ya bato ya Ashuri mpe ya Jizireyeli, ya Efrayimi, ya Benjame mpe ya Isalaele mobimba. \v 10 Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mibu tuku minei ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Isalaele, mpe akonzaki mibu mibale. Kasi libota ya Yuda ekanganaki na Davidi. \v 11 Davidi asalaki mibu sambo na sanza motoba na Ebron lokola mokonzi ya libota ya Yuda. \p \v 12 Abineri, mwana mobali ya Neri, elongo na bato ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, babimaki wuta na Maanayimi mpo na kokende na Gabaoni. \v 13 Joabi, mwana mobali ya Tseruya, elongo na basali ya Davidi, bango mpe babimaki mpe bakutanaki na bato ya Abineri pene ya liziba ya Gabaoni : bamoko bazalaki na ngambo moko ya liziba, mpe bamosusu, na ngambo mosusu. \v 14 Abineri alobaki na Joabi : \pi1 — Tika ete bilenge mibali batelema mpe babunda liboso na biso ! \p Joabi azongisaki : \pi1 — Malamu ! Tika ete babunda. \p \v 15 Boye, wana batelemaki mpe batangaki bango, emonanaki motango oyo : zomi na mibale mpo na libota ya Benjame mpe Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo ; mpe zomi na mibale kati na basali ya Davidi. \v 16 Moko na moko asimbaki monguna na ye na moto mpe atobolaki ye mopanga na mopanzi ; mpe bango nyonso bakweyaki nzela moko. Bongo babengaki esika yango ya Gabaoni : Elikati-Atsurimi\f + \fr 2.16 \fr*\ft Elikati-Atsurimi elakisi : Esika ya bambeli.\ft*\f*. \p \v 17 Etumba ya mokolo wana ezalaki makasi penza. Basali ya Davidi balongaki Abineri elongo na bato ya Isalaele. \v 18 Bana mibali misato ya Tseruya bazalaki wana : Joabi, Abishayi mpe Asaeli. Asaeli azalaki mbangu lokola mboloko ya zamba. \v 19 Asaeli alandaki Abineri na molende penza mpe atikalaki kobaluka te, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to ya loboko ya mwasi. \v 20 Tango Abineri abalukaki mpo na kotala na sima, atunaki : \pi1 — Ezali yo Asaeli ? \p Asaeli azongisaki : \pi1 — Iyo, ezali ngai. \p \v 21 Abineri alobaki na ye : \pi1 — Kende na ngambo ya loboko ya mobali to ya mwasi, bundisa moko kati na bilenge mibali mpe botola ye bibundeli. \p Kasi Asaeli atikaki te kolanda ye. \v 22 Boye Abineri alobaki lisusu na Asaeli : \pi1 — Tika kolanda ngai ! Mpo na nini kotindika ngai na koboma yo ? Bongo ndenge nini nakotala Joabi, ndeko na yo ya mobali, na elongi ? \p \v 23 Kasi lokola Asaeli aboyaki kotika kolanda ye, Abineri atubaki Asaeli songe ya likonga na ye na libumu ; mpe likonga ebimaki ye na mokongo. Asaeli akweyaki mpe akufaki wana. Moto nyonso oyo azalaki kokoma na esika oyo Asaeli akweyaki mpe akufaki azalaki kotelema. \p \v 24 Joabi mpe Abishayi balandaki Abineri ; mpe wana moyi ezalaki kolala, bakomaki na etando ya Ama oyo etalani na Guya, na nzela oyo ekenda na esobe ya Gabaoni. \v 25 Bato ya Benjame basanganaki sima na Abineri, basalaki lisanga mpe batelemaki na songe ya ngomba moko ya moke. \v 26 Abineri abelelaki na Joabi : \pi1 — Boni, mopanga ekoba na yango koboma tango nyonso ? Oyebi te ete ekosuka mabe ? Okozela kino tango nini mpo na kopesa mitindo na bato na yo ete balanda lisusu te bandeko na bango ? \p \v 27 Joabi azongisaki : \pi1 — Na Kombo na Nzambe, soki olobaki te, bato balingaki kokoba kolanda bandeko na bango kino lobi na tongo. \p \v 28 Boye Joabi abetaki kelelo, mpe bato nyonso batelemaki, batikaki kolanda Isalaele mpe babundaki lisusu te. \p \v 29 Na butu wana nyonso, Abineri mpe bato na ye nyonso batambolaki na etando ya Araba, balekaki Yordani, bakatisaki Bitironi mobimba mpe bakomaki na Maanayimi. \v 30 Joabi atikaki kolanda Abineri mpe azongaki, asangisaki bato na ye nyonso : emonanaki ete bato ya Davidi zomi na libwa kaka nde bazangaki, bakisa Asaeli. \v 31 Kasi bato ya Davidi babomaki bato ya Benjame nkama misato na tuku motoba oyo bazalaki elongo na Abineri. \v 32 Bakamataki Asaeli mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye, na Beteleemi. Bongo Joabi mpe bato na ye batambolaki butu mobimba mpe bakomaki na Ebron na tongo-tongo. \c 3 \p \v 1 Bitumba kati na libota ya Saulo mpe libota ya Davidi ewumelaki tango molayi. Wana makasi ya Davidi ezalaki komata se komata, makasi ya libota ya Saulo ezalaki kaka kokita. \b \li4 \v 2 Tala bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron : \li1 Mwana ya liboso ezalaki Aminoni oyo Ayinoami, moto ya Jizireyeli, abotelaki ye ; \li1 \v 3 ya mibale, Kileabi oyo Abigayili oyo akufisaki mobali na ye ya liboso, Nabali, moto ya Karimeli, abotelaki ye ; \li1 ya misato, Abisalomi oyo Maaka, mwana ya Talimayi, mokonzi ya Geshuri, abotelaki ye ; \li1 \v 4 ya minei, Adoniya oyo Agite abotelaki ye ; \li1 ya mitano, Shefatia oyo Abitali abotelaki ye ; \li1 \v 5 ya motoba, Yitileami oyo Egila, mwasi ya Davidi, abotelaki ye. \li4 Bango nde bana mibali ya Davidi oyo babotamaki na Ebron. \s1 Abineri asangani na Davidi \p \v 6 Na tango ya bitumba kati na mabota ya Saulo mpe ya Davidi, Abineri azalaki kolendisa nguya na ye kati na ndako ya Saulo. \v 7 Nzokande, Saulo azalaki na makangu moko ; kombo na ye ezalaki « Ritsipa, » mwana mwasi ya Aya. Bongo Ishi-Bosheti alobaki na Abineri : \pi1 — Mpo na nini osangisi nzoto na makangu ya tata na ngai ? \p \v 8 Tango Abineri ayokaki makambo oyo Ishi-Bosheti alobaki, asilikaki makasi mpe azongisaki : \pi1 — Boni ! Ngai nazali moto ya mbwa na ngambo ya bato ya Yuda ? Ngai oyo, na mokolo ya lelo, nazali kosalela bosembo epai ya libota ya Saulo, tata na yo, epai ya bandeko na ye mpe epai ya baninga na ye ; ngai oyo nakabaki yo te na maboko ya Davidi, ngai nde sik’oyo ozali kofunda ete nasali mabe na tina na mwasi oyo ! \v 9 Tika ete Nzambe apesa ngai Abineri etumbu ya makasi soki nasali te mpo na Davidi makambo oyo Yawe alakaki ye, na nzela ya ndayi, \v 10 ete akolongola bokonzi na ndako ya Saulo mpe akotia kiti ya bokonzi ya Davidi kati na Isalaele mpe kati na Yuda, longwa na Dani kino na Beri-Sheba. \p \v 11 Ishi-Bosheti akokaki kozongisa ata liloba moko te epai ya Abineri, pamba te azalaki kobanga ye. \p \v 12 Abineri atindaki bantoma koloba na Davidi : \pi1 — Mokili oyo ezali ya nani ? Sala boyokani elongo na ngai, bongo ngai nakosunga yo mpo na kosangisa Isalaele mobimba epai na yo. \p \v 13 Davidi azongisaki : \pi1 — Malamu ! Nandimi kosala boyokani elongo na yo, kasi nasengi yo eloko moko : koya liboso na ngai te soki otindeli ngai nanu te Mikali, mwana mwasi ya Saulo, tango okoya kokutana na ngai. \p \v 14 Bongo Davidi atindaki bantoma koloba na Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo : \pi1 — Pesa ngai mwasi na ngai, Mikali, oyo nabalaki ngai moko na motuya ya bangenga nkama moko ya bato ya Filisitia. \p \v 15 Boye Ishi-Bosheti atindaki bato kozwa Mikali epai ya mobali na ye, Palitieli, mwana mobali ya Laishi. \v 16 Mobali na ye alandaki ye na kolela kino na Bawurimi. Kasi Abineri alobaki na mobali yango : \pi1 — Zonga na ndako na yo. \p Mpe mobali azongaki. \p \v 17 Abineri asololaki na bampaka ya Isalaele mpe alobaki na bango : \pi1 — Lokola wuta kala bolingaka ete Davidi akoma mokonzi na bino, \v 18 bosala yango sik’oyo ; pamba te Yawe alobaki boye na tina na ye : « Ezali na nzela ya Davidi, mosali na ngai, nde nakobikisa bato na Ngai, Isalaele, na maboko ya bato ya Filisitia mpe ya banguna na bango nyonso. » \p \v 19 Sima na Abineri koloba likambo yango epai ya bato ya libota ya Benjame, akendeki na Ebron mpo na koyebisa Davidi makambo nyonso oyo bato ya Isalaele mpe libota mobimba ya Benjame babongisaki. \p \v 20 Mpe tango Abineri elongo na bato na ye, tuku mibale, bakomaki epai ya Davidi, na Ebron, Davidi asaliselaki bango feti. \v 21 Abineri alobaki na Davidi : \pi1 — Na ndingisa na yo mokonzi, nkolo na ngai, nalingi kokende sik’oyo kosangisela yo bato nyonso ya Isalaele mpo ete basala boyokani elongo na yo ; mpe na bongo, yo okokonza na bisika nyonso oyo olingi. \p Davidi atikaki Abineri kokende, mpe Abineri azongaki na kimia. \s1 Kufa ya Abineri \p \v 22 Sima na mwa tango, basali ya Davidi mpe Joabi bazongaki wuta na bitumba mpe bamemaki bomengo ebele ya bitumba. Abineri azalaki lisusu na Ebron te, epai ya Davidi, pamba te Davidi asilaki kotika ye kokende, mpe azongaki na kimia. \v 23 Tango kaka Joabi mpe basoda na ye nyonso bakomaki, bayebisaki Joabi : \pi1 — Abineri, mwana mobali ya Neri, ayaki epai ya mokonzi ; bongo mokonzi atikaki ye kokende, mpe azongaki na kimia. \p \v 24 Joabi akendeki komona mokonzi mpe alobaki na ye : \pi1 — Eloko nini oyo osali ? Mpo na nini otikaki penza Abineri oyo ayaki epai na yo kokende ? Mpe tala sik’oyo, akei ! \v 25 Nzokande oyebi malamu Abineri, mwana mobali ya Neri ! Soki ayaki epai na yo, ezalaki nde mpo na kokosa yo, mpo na kononga mpe koluka koyeba bisika nyonso oyo otambolaka mpe makambo nyonso oyo osalaka. \p \v 26 Sima na Joabi kowuta na ndako ya Davidi, atindaki bantoma mpo ete balanda mpe bakanga Abineri. Mpe wana Davidi ayebaki te, bantoma bazongisaki Abineri wuta na libulu ya mayi ya Sira. \v 27 Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki. \p \v 28 Sima na yango, tango kaka Davidi ayokaki sango ya makambo oyo ewutaki kosalema, alobaki : \pi1 — Na miso ya Yawe, ngai mpe bokonzi na ngai tozali na ngambo te mpo na libela na tina na makila ya Abineri, mwana mobali ya Neri. \v 29 Tika ete makila na ye etangama na moto ya Joabi mpe ya libota na ye mobimba ! Tika ete ndako ya Joabi ezangaka te bato oyo bakobela bokono ya sopisi\f + \fr 3.29 \fr*\ft Sopisi ezali bokono ya kobima tofina na nzoto ya mibali.\ft*\f* to bokono ya maba to bato oyo bakotambola na banzete to bato oyo bakokufa na mopanga to bato oyo bakozanga bilei. \p \v 30 Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, babomaki Abineri mpo ete abomaki Asaeli, ndeko na bango ya mobali, na bitumba ya Gabaoni. \p \v 31 Bongo Davidi alobaki na Joabi mpe na bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye : \pi1 — Bopasola bilamba na bino mpe bolata basaki, bosala matanga liboso ya Abineri. \p Ye moko mokonzi Davidi atambolaki na sima ya ebembe. \v 32 Bakundaki Abineri, na Ebron, mpe mokonzi alelaki makasi na likolo ya kunda ya Abineri. Bato nyonso mpe balelaki. \p \v 33 Bongo mokonzi ayembaki nzembo oyo ya mawa mpo na Abineri : \q1 « Esengelaki ete Abineri akufa penza lokola zoba ? \q1 \v 34 Bakangaki te maboko na yo na basinga, \q2 bakangaki te makolo na yo na basheni. \q2 Kasi okweyi ndenge bakweyaka liboso ya babomi. » \p Mpe bato nyonso balelaki ye lisusu makasi \v 35 mpe basengaki na Davidi ete alia wana moyi ezali nanu. Kasi Davidi alapaki ndayi na maloba oyo : « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu oyo eleki makasi soki nameki kolia mapa to eloko mosusu liboso ete moyi elala ! » \p \v 36 Bato nyonso bayokaki ndayi yango mpe basepelaki na yango : bazalaki kosepela na makambo nyonso oyo mokonzi azalaki kosala. \v 37 Mpe na mokolo wana, basoda nyonso ya Isalaele mpe Isalaele mobimba bandimaki ete mokonzi ayebaki ata likambo moko te na tina na kufa ya Abineri, mwana mobali ya Neri. \v 38 Mokonzi alobaki na basali na ye : « Boni, boyebi na bino ete mokambi moko mpe moto moko ya monene akweyi lelo kati na Isalaele ? \v 39 Na mokolo ya lelo, atako bapakola ngai mafuta lokola mokonzi, nazali na makasi te, mpe bana mibali oyo ya Tseruya baleki ngai na makasi. Tika ete Yawe apesa etumbu na moto oyo asali mabe oyo kolanda mabe na ye ! » \c 4 \s1 Kufa ya Ishi-Bosheti \p \v 1 Tango Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, ayokaki ete Abineri akufi na Ebron, alembaki nzoto, mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na somo makasi. \p \v 2 Nzokande mwana mobali ya Saulo azalaki na bato mibale oyo bazalaki bakonzi ya mampinga : moko, kombo na ye ezalaki « Baana ; » mpe mosusu, « Rekabi. » Bazalaki bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti, kati na bato ya ekolo ya Benjame. Beyeroti ezalaki eteni ya mabele ya Benjame, \v 3 pamba te bato ya Beyeroti bakimelaki na Gitayimi mpe bavandaki kuna lokola bapaya kino na mokolo ya lelo. \p \v 4 Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki na mwana mobali moko oyo azalaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Wana azalaki nanu na mibu mitano ya mbotama, sango kowuta na Jizireyeli na tina na Saulo mpe Jonatan ekomaki. Boye mama mobokoli na ye akamataki ye mpo na kokima. Kasi lokola akimaki na lombangu, mwana akweyaki mpe akomaki na mbeba na makolo nyonso mibale. Kombo na ye ezalaki « Mefibosheti. » \p \v 5 Rekabi mpe Baana, bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti, bakendeki na ndako ya Ishi-Bosheti mpe bakomaki kuna na ngonga ya midi, wana azalaki kolala mpo na kopema. \v 6-7 Bakotaki kati na ndako lokola nde bakei kozwa ble, wana Ishi-Bosheti azalaki ya kolala na mbeto na ye kati na shambre, batubaki ye mbeli na libumu, babomaki ye mpe bakataki ye moto ; bongo bazwaki moto yango, bakimaki mpe batambolaki na yango butu mobimba na nzela oyo ekenda na etando ya Araba. Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bakimaki. \v 8 Bamemaki moto ya Ishi-Bosheti epai ya Davidi, na Ebron, mpe balobaki na mokonzi : \pi1 — Tala moto ya Ishi-Bosheti, mwana mobali ya Saulo, monguna na yo, oyo alukaki koboma yo. Na mokolo ya lelo, Yawe azongisi mpo na mokonzi, nkolo na ngai, mabe na mabe epai ya Saulo mpe bakitani na ye. \p \v 9 Davidi azongiselaki Rekabi mpe Baana, ndeko na ye ya mobali, bana mibali ya Rimoni, moto ya Beyeroti : \pi1 — Na Kombo na Yawe oyo akangoli ngai na pasi nyonso \v 10 tango moto moko ayebisaki ngai ete Saulo akufi, wana akanisaki ete amemeli ngai sango malamu. Nakangaki ye mpe nabomaki ye, na Tsikilagi. Ezalaki lifuti oyo napesaki ye mpo na sango na ye. \v 11 Bongo sik’oyo, tango bato mabe babomi moto oyo ayebi na ye likambo te kati na ndako na ye moko mpe na mbeto na ye moko, nasengeli te kosenga makila na ye na maboko na bino mpe kolimwisa bino na mokili ? \p \v 12 Boye Davidi apesaki mitindo ; mpe bato na ye babomaki bango, bakataki bango maboko mpe makolo mpe badiembikaki bango pembeni ya liziba ya Ebron. Bazwaki moto ya Ishi-Bosheti mpe bakundaki yango kati na kunda ya Abineri, na Ebron. \c 5 \s1 Davidi akomi mokonzi ya Isalaele mobimba \r (1Ma 11.1-3) \p \v 1 Bikolo nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya Davidi mpe balobaki : « Biso na yo, tozali nzoto moko mpe makila moko. \v 2 Na kala, na mikolo oyo Saulo azalaki mokonzi, yo nde ozalaki kokamba mampinga ya Isalaele na bitumba. Nzokande, Yawe alobaki na yo : ‹ Yo nde okokamba bato na Ngai, Isalaele, mpe okokoma mokambi na bango. › » \p \v 3 Boye bampaka nyonso ya Isalaele bayaki na Ebron epai ya mokonzi. Mokonzi Davidi asalaki elongo na bango boyokani, na Ebron, liboso ya Yawe ; mpe bapakolaki Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. \b \p \v 4 Davidi azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku minei : \v 5 mibu sambo na basanza motoba lokola mokonzi ya Yuda, na Ebron ; mpe mibu tuku misato na misato lokola mokonzi ya Isalaele mobimba mpe Yuda, na Yelusalemi. \s1 Davidi abotoli Yelusalemi \r (1Ma 11.4-9) \p \v 6 Mokonzi mpe bato na ye bakendeki na Yelusalemi mpo na kobundisa bato ya Yebusi oyo bazalaki kovanda kuna. Bavandi ya Yebusi balobaki na Davidi : « Okokota awa te, pamba te ezala mokufi miso to moto ya tengu-tengu akobengana yo. » \p Bakanisaki ete Davidi akoki kokota kuna te. \v 7 Atako bongo, Davidi abotolaki ndako makasi ya Siona, oyo ezali engumba ya Davidi. \v 8 Na mokolo wana, Davidi alobaki : « Moto nyonso oyo alingi kobundisa bato ya Yebusi asengeli kozwa nzela ya se ya mabele mpo na kokanga bato ya tengu-tengu mpe bakufi miso oyo bazali banguna ya Davidi. » Yango wana balobaka : « Bakufi miso mpe bato ya tengu-tengu bakokota te na ndako ya mokonzi. » \p \v 9 Davidi avandaki na ndako yango oyo batonga makasi mpe abengaki yango « Engumba ya Davidi. » Mpe Davidi atongaki zingazinga na yango, longwa na Milo kino na kati. \v 10 Nguya ya Davidi ezalaki komata se komata, mpe Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, azalaki elongo na ye. \r (1Ma 14.1-2) \p \v 11 Irami, mokonzi ya Tiri, atindaki bantoma epai ya Davidi mpo ete bamemela ye mabaya ya sedele, basharipantie mpe bato oyo bapasolaka mabanga ; mpe batongelaki Davidi ndako. \v 12 Davidi asosolaki ete Yawe azali kolendisa ye lokola mokonzi ya Isalaele mpe azali kotombola bokonzi na ye mpo na Isalaele, bato na Ye. \r (1Ma 3.5-9; 14.3-7) \p \v 13 Tango Davidi alongwaki na Ebron mpe akendeki kovanda kati na Yelusalemi, azwaki lisusu bamakangu mpe basi mosusu ebele oyo babotelaki ye bana mosusu ya mibali mpe ya basi. \p \v 14 Tala bakombo ya bana ya Davidi oyo babotamaki na Yelusalemi : Shamuwa, Shobabi, Natan, Salomo, \v 15 Yibari, Elishuwa, Nefegi, Yafia, \v 16 Elishama, Eliyada mpe Elifeleti. \s1 Davidi alongi bato ya Filisitia \r (1Ma 14.8-16) \p \v 17 Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bapakoli Davidi mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele, bango nyonso bakendeki koluka ye. Kasi tango Davidi ayokaki sango ya mabongisi na bango, akendeki na ndako oyo batonga makasi. \v 18 Bato ya Filisitia bakomaki mpe bapanzanaki na lubwaku ya Refayimi. \v 19 Davidi atunaki Yawe : \pi1 — Nakoki solo kokende kobundisa bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko na ngai ? \p Yawe azongiselaki ye : \pi1 — Kende, pamba te nakokaba bato ya Filisitia na maboko na yo. \p \v 20 Davidi akomaki na Bali-Peratsimi mpe alongaki kuna bato ya Filisitia. Alobaki : « Yawe afungoleli ngai nzela kati na banguna na ngai, ndenge mayi epasolaka nzela. » \p Yango wana babengaki esika yango Bala-Peratsimi. \v 21 Bato ya Filisitia basundolaki kuna banzambe na bango ya bikeko, mpe Davidi elongo na basoda na ye bamemaki yango. \p \v 22 Bato ya Filisitia bayaki lisusu mpe bapanzanaki kati na lubwaku ya Refayimi. \v 23 Bongo Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : « Kobundisa bango na liboso te, kasi baluka na sima na bango ; bongo okobimela bango na liboso ya banzete ya mirie. \v 24 Tango okoyoka lokito ya makolo ya bato na likolo ya banzete ya Mirie, na tango wana nde okobima noki, pamba te ekolakisa ete Yawe abimi liboso na yo mpo na kobeta mampinga ya bato ya Filisitia. » \p \v 25 Davidi asalaki ndenge Yawe atindaki ye mpe abomaki bato ya Filisitia, longwa na Geba kino na Gezeri. \c 6 \s1 Bamemi Sanduku na Yelusalemi \r (1Ma 13.5-14) \p \v 1 Davidi asangisaki basoda ya mpiko ya Isalaele, bazalaki nkoto tuku misato. \v 2 Davidi elongo na basoda na ye nyonso bakendeki na Baale-Yuda mpo na kolongola kuna Sanduku ya Nzambe, oyo, liboso na yango, bazalaki kobelela Kombo moko, Kombo ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka kati na basheribe na likolo ya Sanduku. \v 3 Batiaki Sanduku ya Nzambe na likolo ya shario ya sika mpe bamemaki yango wuta na ndako ya Abinadabi, oyo ezalaki na likolo ya ngomba moke. Ezalaki Uza mpe Ayiyo, bana mibali mibale ya Abinadabi, nde bazalaki kotambolisa shario yango oyo ya sika. \v 4 Bamemaki shario elongo na Sanduku ya Nzambe, wuta na ndako ya Abinadabi, oyo ezalaki na likolo ya ngomba moke. Ayiyo azalaki kotambola liboso ya shario. \v 5 Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bazalaki kosepela na liboso ya Yawe, na kobeta lolenge nyonso ya bibetelo mindule basala na mabaya ya sipele, mandanda, banzenze, bambunda ya mike-mike, makembe mpe manzanza. \p \v 6 Tango bakomaki na etando ya Nakoni, Uza asembolaki loboko na ye mpe asimbaki Sanduku ya Nzambe, pamba te bangombe elingaki kokweyisa Sanduku. \v 7 Yawe asilikelaki Uza makasi, mpe Nzambe abetaki ye mpo na mbeba na ye. Boye Uza akufaki kaka wana, pembeni ya Sanduku ya Nzambe. \p \v 8 Davidi asilikaki makasi mpo ete Yawe afungolaki lidusu na kobeta Uza. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango « Peretsi-Uza. » \v 9 Na mokolo wana, Davidi abangaki Yawe mpe amitunaki : « Ndenge nini Sanduku ya Yawe eya epai na ngai ? » \p \v 10 Boye, Davidi aboyaki komema Sanduku ya Yawe epai na ye, kati na engumba ya Davidi ; akendeki kotia yango kati na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati. \v 11 Sanduku ya Yawe evandaki sanza misato kati na ndako ya Obedi-Edomi, moto ya Gati ; mpe Yawe apambolaki Obedi-Edomi elongo na libota na ye nyonso. \r (1Ma 15.25–16.1-3) \p \v 12 Tango bayaki koyebisa mokonzi Davidi ete Yawe apamboli ndako ya Obedi-Edomi mpe biloko na ye nyonso mpo na Sanduku ya Nzambe, Davidi akendeki kozwa na esengo Sanduku ya Nzambe wuta na ndako ya Obedi-Edomi, mpe bakendeki na yango kati na engumba ya Davidi. \v 13 Tango bato oyo bazalaki komema Sanduku ya Yawe batindikaki makolo na bango mbala motoba, batelemaki, mpe Davidi abonzaki lokola mbeka ngombe moko ya mobali mpe mwana ngombe moko ya mafuta. \v 14 Davidi alataki efode ya lino mpe azalaki kobina na makasi na ye nyonso liboso ya Yawe. \v 15 Davidi mpe bato nyonso ya Isalaele bamemaki Sanduku ya Yawe na kobeta milolo ya esengo mpe na kobeta bakelelo. \p \v 16 Tango Sanduku ya Yawe ekotaki na engumba ya Davidi, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kotala wuta na lininisa ; mpe tango amonaki mokonzi Davidi kopumbwa mpe kobina liboso ya Yawe, ayinaki ye kati na motema na ye. \v 17 Bamemaki Sanduku ya Yawe mpe batiaki yango kati na ndako ya kapo oyo Davidi atelemisaki mpo na yango. Mpe Davidi abonzaki liboso ya Yawe bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. \v 18 Tango Davidi asilisaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, apambolaki bato na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga. \v 19 Bongo apesaki na bato nyonso, na lisanga mobimba ya Isalaele, mibali mpe basi, lipa, gato oyo basala na bambuma ya dati, gato oyo basala na bambuma ya vino ya kokawuka. Sima na yango, bato nyonso bazongaki na bandako na bango. \b \p \v 20 Tango Davidi azongaki mpo na kopambola ndako na ye, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abimaki mpo na kokutana na Davidi mpe alobaki : \pi1 — Lokumu nini mokonzi ya Isalaele amipesi na mokolo ya lelo tango amitiki bolumbu na miso ya basi nyonso ya basali na ye ndenge moto pamba akokaki kosala ? \p \v 21 Davidi alobaki na Mikali : \pi1 — Nazalaki nde kosepela liboso ya Yawe oyo aponaki ngai mpe asepelaki na ngai koleka tata na yo mpe moto nyonso ya ndako na ye, tango akomisaki ngai mokonzi ya Isalaele, bato ya Yawe. \v 22 Nakokoma lisusu moto pamba koleka mpe nakomikitisa lisusu koleka na miso na ngai moko. Kasi liboso ya basi oyo yo ozali kolobela, ngai nakozwa lokumu. \p \v 23 Mpo na yango, Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abotaki te kino na mokolo na ye ya kufa. \c 7 \s1 Elaka ya Nzambe epai ya Davidi \r (1Ma 17.1-15) \p \v 1 Sima na mokonzi kovanda na ndako na ye mpe Yawe kopesa ye bopemi liboso ya banguna na ye nyonso oyo bazingelaki ye, \v 2 mokonzi alobaki na mosakoli Natan : \pi1 — Tala nanu likambo oyo ! Ngai nazali kovanda na ndako batonga na mabaya ya sedele, kasi Sanduku ya Nzambe ezali kovanda kati na ndako ya kapo. \p \v 3 Natan azongiselaki mokonzi : \pi1 — Sala nyonso oyo ozali na yango na motema, pamba te Yawe azali elongo na yo. \p \v 4 Kasi na butu wana, Yawe alobaki na Natan : \pm \v 5 — Kende koyebisa Davidi, mosali na ngai : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Boni, yo nde okotongela ngai ndako mpo ete navanda kati na yango ? \v 6 Natikali nanu kovanda na ndako moko te, banda mokolo oyo nabimisaki Isalaele na Ejipito kino lelo ; nazalaki kotambola bipai na bipai na se ya ndako ya kapo, wana nazalaki kovanda kati na Mongombo. \v 7 Na bisika nyonso oyo natamboli elongo na bana nyonso ya Isalaele, boni, nasilaki koloba ata na moko kati na bakambi na bango, oyo natiaki mpo na kobatela bato na ngai, Isalaele : ‹ Mpo na nini botongeli Ngai te ndako ya mabaya ya sedele ? › » \pm \v 8 Yebisa sik’oyo Davidi, mosali na Ngai : « Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Ezali Ngai nde nazwaki yo na zamba epai wapi ozalaki koleisa mpe kobatela bibwele, mpo ete nakomisa yo mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele. \v 9 Nazalaki elongo na yo na bisika nyonso oyo okendeki, mpe nabomaki banguna na yo nyonso liboso na yo. Sik’oyo, nakokomisa kombo na yo monene lokola bakombo ya bato minene oyo bazali kati na mokili. \v 10 Nakobongisa esika mpo na bato na Ngai, Isalaele ; nakolona bango mpo ete bazala na esika na bango moko mpe batungisa bango lisusu te. Bato mabe bakonyokola bango lisusu te ndenge bazalaki konyokola bango liboso \v 11 mpe ndenge bazalaki kosala bango tango nyonso wuta tango oyo naponaki bakambi ya bato na Ngai, Isalaele. Nakopesa yo bopemi liboso ya banguna na yo nyonso. › \pm Yawe atatoli mpo na yo ete Ye moko akosala ete bokonzi ewumela kati na libota na yo. \v 12 Tango mikolo ya bomoi na yo ekosila mpe okokende kokutana na batata na yo, nakotombola moko kati na bakitani na yo, oyo akobima penza na mokongo na yo, mpo ete akitana na yo ; mpe nakolendisa bokonzi na ye. \v 13 Ezali ye nde akotonga Ndako mpo na Kombo na Ngai, mpe Ngai nakolendisa mpo na libela kiti na ye ya bokonzi. \v 14 Nakozala Tata mpo na ye, mpe ye akozala mwana mpo na Ngai. Soki asali mabe, nakopesa ye etumbu ; nakosalela bato lokola fimbu mpo na kobeta ye. \v 15 Kasi nakotikala kolongola te bolingo na Ngai epai na ye ndenge nalongolaki yango epai ya Saulo oyo nalongolaki liboso na yo. \v 16 Libota na yo ya bokonzi mpe bokonzi na yo ekowumela tango nyonso liboso na Ngai, mpe kiti na yo ya bokonzi ekolendisama mpo na libela. » \p \v 17 Natan ayebisaki Davidi maloba oyo nyonso mpe emoniseli oyo nyonso. \s1 Libondeli ya Davidi \r (1Ma 17.16-27) \p \v 18 Bongo mokonzi Davidi akotaki, avandaki liboso ya Yawe mpe alobaki : \pm « Nkolo Yawe, ngai nazali nani, mpe libota na ngai ezali nini, mpo ete okomisa ngai na esika oyo nazali ? \v 19 Ah Nkolo Yawe, lokola nde ekokaki te na miso na Yo, olobi lisusu na tina na lobi ya libota ya bokonzi ya mosali na Yo ! Ah Nkolo Yawe, boni, ezali boye nde osalaka mpo na bato ? \pm \v 20 Nini oyo Davidi akoki lisusu koloba na Yo ? Pamba te, oh Nkolo Yawe, oyebi mosali na Yo ? \v 21 Ezali mpo na Liloba na Yo mpe kolanda mokano na Yo nde okokisi likambo monene oyo, mpe osali ete eyebana epai ya mosali na Yo. \pm \v 22 Oh Nkolo Yawe, ozali monene ndenge nini ! Moko te akokani na Yo ; mpe, kolanda nyonso oyo toyoki na matoyi na biso, Nzambe mosusu azali te, bobele Yo ! \v 23 Ekolo nini ekokani na bato na Yo, Isalaele, oyo, kati na mokili, Nzambe akendeki kosikola lokola bato mpo na Ye moko, mpo na kopesa yango kombo mpe kokokisa makambo minene, makambo ya kokamwa mpe ya somo na nzela ya kobengana bikolo elongo na banzambe na bango liboso ya bato na Yo, oyo osikolaki wuta na Ejipito ? \v 24 Otiaki Isalaele, bato na Yo, mpo ete bazala bato na Yo mpo na libela ; bongo Yo, oh Yawe, okomaki Nzambe na bango. \pm \v 25 Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, kokisa mpo na libela elaka oyo opesaki epai ya mosali na Yo mpe epai ya libota na ye. Sala ndenge olakaki \v 26 mpo ete Kombo na Yo ekumisama seko na seko, mpe bato bakoma kolobaka : ‹ Yawe, Mokonzi ya mampinga, azali Nzambe ya Isalaele. › Boye bokonzi ya libota ya Davidi, mosali na Yo, ekolendisama liboso na Yo. \pm \v 27 Oh Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya Isalaele, olakisaki na mosali na Yo makambo oyo na koloba : ‹ Nakosala ete bokonzi ewumela na libota na yo. › Yango wana mosali na Yo azwi makasi ya kosambela Yo na maloba oyo. \pm \v 28 Sik’oyo, oh Nkolo Yawe, ozali penza Nzambe ! Maloba na Yo ezali solo, mpe olakaki makambo oyo ya malamu epai ya mosali na Yo. \v 29 Sik’oyo, tika ete opambola libota ya mosali na Yo mpo ete ewumela seko liboso na Yo ; pamba te oh Nkolo Yawe, Yo nde olobaki, mpe na nzela ya lipamboli na Yo, libota ya mosali na Yo ekopambolama mpo na libela. » \c 8 \s1 Bitumba ya Davidi \r (1Ma 18.1-13) \p \v 1 Sima na yango, Davidi alongaki bato ya Filisitia mpe abukaki lolendo na bango. Abotolaki Metegi-Ama na maboko ya bato ya Filisitia. \v 2 Davidi alongaki lisusu bato ya Moabi mpe alalisaki bango na mabele, na etando oyo ezalaki na molayi ya basinga misato, oyo bamekelaka molayi. Abomaki ndambo mibale kati na bandambo misato ya bato nyonso oyo balalaki na etando mpe atikaki na bomoi ndambo moko ya bato. Boye, bato ya Moabi bakomaki bawumbu ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako ya mokonzi. \v 3 Davidi alongaki lisusu Adadezeri, mwana mobali ya Reobi, mokonzi ya Tsoba, tango Adadezeri akendeki kolendisa bokonzi na ye pembeni ya ebale Efrate. \v 4 Davidi akangaki basoda nkoto moko na nkama sambo oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda, mpe basoda nkoto tuku mibale oyo babundaka bitumba na makolo ; akataki misisa ya makolo ya bampunda nyonso, kasi atikaki kaka bampunda nkama moko oyo ezalaki kobenda bashario. \p \v 5 Tango bato ya Siri oyo bazalaki kovanda na engumba Damasi bayaki kosunga Adadezeri, mokonzi ya Tsoba, Davidi abomaki kati na bango bato nkoto tuku mibale. \v 6 Bongo Davidi atiaki bayangeli na ye kati na engumba Damasi ya Siri, mpe bato ya Siri bakomaki na se ya bokonzi ya Davidi mpe bakomaki kofuta mpako epai na ye. Yawe azalaki kopesa Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende. \v 7 Davidi abotolaki banguba ya wolo oyo bakonzi ya basoda ya Adadezeri bazalaki na yango mpe amemaki yango na Yelusalemi. \v 8 Na Beta mpe na Berotayi, bingumba ya Adadezeri, mokonzi Davidi azwaki bronze ebele. \p \v 9 Tango Toyi, mokonzi ya Amati, ayokaki ete Davidi alongi mampinga nyonso ya Adadezeri, \v 10 atindaki Yorami, mwana na ye ya mobali, kopesa mokonzi Davidi mbote mpe longonya mpo ete abundisaki mpe alongaki Adadezeri oyo azalaki monguna ya Toyi. Yorami amemelaki Davidi biloko ya palata, ya wolo mpe ya bronze. \v 11 Mokonzi Davidi abulisaki biloko yango lokola likabo epai na Yawe ndenge asalaki na palata mpe na wolo oyo ewutaki na bikolo nyonso oyo abotolaki, \v 12 na Arami, na Moabi, na Amoni, na Filisitia mpe na Amaleki. Abulisaki mpe bomengo ya bitumba oyo abotolaki epai ya Adadezeri, mwana mobali ya Reobi, mokonzi ya Tsoba. \p \v 13 Davidi akomaki moto ya lokumu tango awutaki koboma bato ya Siri nkoto zomi na mwambe, kati na Lubwaku ya Mungwa. \v 14 Atiaki bayangeli kati na Edomi ; ezali kati na Edomi mobimba nde atiaki bayangeli, mpe bato nyonso ya Edomi bakomaki bawumbu ya Davidi. Yawe apesaki Davidi elonga na bisika nyonso oyo azalaki kokende. \s1 Bakalaka ya Davidi \r (1Ma 18.14-17) \p \v 15 Davidi azalaki mokonzi ya Isalaele mobimba, azalaki kosalela bato na ye nyonso makambo ya sembo mpe ya alima. \v 16 Joabi, mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya liboso ya mampinga ; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda ; \v 17 Tsadoki, mwana mobali ya Ayitubi, mpe Ayimeleki, mwana mobali ya Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ; Tseraya azalaki mokomi mikanda ; \v 18 Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe ya Peleti ; mpe bana mibali ya Davidi bazalaki Banganga-Nzambe. \c 9 \s1 Davidi mpe Mefibosheti \p \v 1 Davidi atunaki : « Ezali lisusu na moto moko ya libota ya Saulo oyo azali nanu na bomoi ? Nazali na posa ya kotalisa ye bolamu mpo na Jonatan. » \p \v 2 Nzokande, ezalaki na mosali moko ya ndako ya Saulo ; kombo na ye « Tsiba. » Babengisaki ye mpo ete aya komimonisa liboso ya Davidi. Mpe mokonzi alobaki na ye : \pi1 — Ezali yo Tsiba ? \p Azongisaki : \pi1 — Iyo, ezali ngai, mosali na yo. \p \v 3 Mokonzi atunaki ye : \pi1 — Boni, ezali na moto moko te ya libota ya Saulo, oyo azali nanu na bomoi, oyo epai ya nani nakoki kotalisa bolamu ya Nzambe ? \p Tsiba azongiselaki mokonzi : \pi1 — Ezali na mwana mobali moko ya Jonatan, oyo azali nanu na bomoi. Azali na mbeba na makolo nyonso mibale. \p \v 4 Mokonzi atunaki ye : \pi1 — Azali wapi ? \p Tsiba azongisaki : \pi1 — Azali na ndako ya Makiri, mwana mobali ya Amieli, na mboka Lo-Debari. \p \v 5 Boye, mokonzi Davidi abengisaki ye wuta na Lo-Debari, na ndako ya Makiri, mwana mobali ya Amieli. \p \v 6 Tango Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, ayaki epai ya Davidi, agumbamaki mpo na kopesa ye lokumu. Davidi alobaki : \pi1 — Mefibosheti ! \p Ye azongisaki : \pi1 — Ngai oyo, mosali na yo. \p \v 7 Davidi alobaki na ye : \pi1 — Kobanga te ! Pamba te nakotalisa yo solo bolamu mpo na tata na yo, Jonatan. Nakozongisela yo mabele nyonso ya koko na yo, Saulo, mpe okobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai. \p \v 8 Mefibosheti agumbamaki mpe alobaki : \pi1 — Mosali na yo azali nani mpo ete otala mbwa ya kokufa lokola ngai ? \p \v 9 Mokonzi abengisaki Tsiba, mosali ya Saulo, mpe alobaki na ye : \pi1 — Napesi na mwana ya nkolo na yo biloko nyonso oyo ezalaki ya Saulo mpe ya libota na ye. \v 10 Yo, bana na yo ya mibali mpe basali na yo, bokosala bilanga mpo na ye mpe bokomema bambuma oyo bokobuka mpo ete mwana ya nkolo na yo akoka kozwa biloko ya kolia. Mpe Mefibosheti, mwana ya nkolo na yo, akobanda kolia tango nyonso na mesa na ngai. \p Nzokande Tsiba azalaki na bana mibali zomi na mitano mpe basali tuku mibale. \v 11 Tsiba alobaki na mokonzi : \pi1 — Mosali na yo akosala makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akotinda ye. \p Boye Mefibosheti aliaki na mesa ya Davidi lokola moko kati na bana mibali ya mokonzi. \v 12 Mefibosheti azalaki na mwana mobali moko ya elenge ; kombo na ye ezalaki « Mika. » Mpe bato nyonso ya libota ya Tsiba bazalaki basali ya Mefibosheti. \v 13 Mefibosheti avandaki na Yelusalemi mpo ete azalaki kolia tango nyonso na mesa ya mokonzi. \c 10 \s1 Davidi alongi bato ya Amoni mpe ya Asiri \r (1Ma 19.1-19) \p \v 1 Sima na mwa tango, mokonzi ya bato ya Amoni akufaki, mpe mwana na ye ya mobali, Anuni, akitanaki na ye na bokonzi. \v 2 Davidi amilobelaki : « Nakotalisa bolamu epai ya Anuni, mwana mobali ya Naashi, ndenge kaka tata na ye atalisaki ngai bolamu. » Boye Davidi atindaki bato mpo na kobondisa ye na tina na kufa ya tata na ye. \p Tango basali ya Davidi bakomaki na mokili ya bato ya Amoni, \v 3 bakambi ya bato ya Amoni balobaki na Anuni, mokonzi na bango : « Okanisi ete ezali mpo na kopesa tata na yo lokumu nde Davidi atindi bato mpo na kobondisa yo ? Ezali mpo na kononga engumba mpe kobebisa yango nde Davidi atindi bango epai na yo ? » \v 4 Boye, Anuni akangaki basali ya Davidi, akataki bango kati-kati ya mandefu, akataki bango bilamba kino na loketo mpe abenganaki bango. \v 5 Tango bayebisaki Davidi likambo yango, atindaki bato mosusu mpo na kokende kokutana na bato wana, pamba te basambwisaki bango makasi. Mokonzi atindelaki bango maloba oyo : « Bovanda na Jeriko kino mandefu na bino ekobota lisusu, sima nde bokozonga. » \p \v 6 Tango bato ya Amoni basosolaki ete bamikomisi bato mabe na miso ya Davidi, bakotisaki bato ya sika na mosala ya soda, oyo bakobanda kobunda bitumba na makolo : epai ya bato ya Siri ya Beti-Reobi mpe ya Tsoba, bato nkoto tuku mibale ; epai ya mokonzi ya Maaka, bato nkoto moko ; epai ya mokonzi ya Tobi, bato nkoto zomi na mibale. \v 7 Tango kaka Davidi ayokaki bongo, atindaki Joabi elongo na mampinga nyonso ya basoda ya mpiko. \v 8 Bato ya Amoni babimaki mpe batandamaki na milongo mpo na bitumba, na ekuke ya engumba mokonzi na bango. Na tango wana, bato ya Siri ya Tsoba mpe ya Reobi elongo na basoda ya Tobi mpe Maaka bazalaki na esika mosusu, kati na zamba. \v 9 Tango Joabi amonaki ete milongo ya bitumba ezali na liboso mpe na sima na ye, aponaki basoda ya Isalaele oyo baleki na mpiko, mpe atiaki bango na milongo mpo na kobundisa bato ya Siri. \v 10 Atiaki basoda oyo batikalaki na se ya bokonzi ya ndeko na ye ya mobali, Abishayi ; mpe atandaki bango na milongo ya bitumba mpo na kobundisa bato ya Amoni. \v 11 Joabi alobaki : « Soki bato ya Siri baleki ngai na makasi, yo okoya kosunga ngai ; kasi soki bato ya Amoni baleki yo na makasi, wana ngai nakoya kosunga yo. \v 12 Yika mpiko, mpe tobunda lokola bilombe mpo na bato na biso mpe mpo na bingumba ya Nzambe na biso. Tika ete Yawe asala oyo ezali malamu na miso na Ye. » \p \v 13 Bongo Joabi mpe basoda oyo bazalaki elongo na ye bapusanaki mpo na kobundisa bato ya Siri ; mpe bato yango ya Siri bakimaki liboso na ye. \v 14 Tango bato ya Amoni bamonaki bato ya Siri kokima, bango mpe bakimaki liboso ya Abishayi mpe bazongaki kati na engumba. Bongo, sima na Joabi kowuta kobundisa bato ya Amoni, azongaki na Yelusalemi. \p \v 15 Tango bato ya Siri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basanganaki. \v 16 Adadezeri atindaki bantoma kobenga bato ya Siri oyo bazalaki na ngambo mosusu ya ebale. Mpe bayaki na Elami. Tsobaki, mokonzi ya mampinga ya Adadezeri, azalaki liboso na bango. \v 17 Tango Davidi azwaki sango yango, asangisaki bato nyonso ya Isalaele, akatisaki Yordani mpe akomaki na Elami. Bato ya Siri basalaki milongo liboso ya Davidi mpe babundisaki ye. \v 18 Kasi bato ya Siri bakimaki liboso ya Isalaele, mpe Davidi abomaki bampunda nkama sambo oyo ezalaki komema bashar mpe basoda nkoto tuku minei oyo babundaka bitumba na likolo ya bampunda. Davidi abetaki mpe Tsobaki, mokonzi na bango ya mampinga, mpe akufaki wana. \v 19 Tango bakonzi nyonso oyo bazalaki na se ya bokonzi ya Adadezeri bamonaki ete Isalaele alongi bango, basalaki kimia elongo na bato ya Isalaele mpe bakomaki kosalela Isalaele. Bongo bato ya Siri bakomaki kobanga kosunga bato ya Amoni. \c 11 \s1 Davidi mpe Batisheba \p \v 1 Na mobu oyo elandaki, na tango oyo bakonzi bazalaka na momesano ya kokende na bitumba, Davidi atindaki Joabi elongo na basali na ye mpe mampinga nyonso ya Isalaele. Babomaki bato ya Amoni mpe bazingelaki Raba. Kasi Davidi atikalaki na Yelusalemi. \v 2 Mokolo moko na pokwa, Davidi alamukaki wuta na mbeto na ye mpe atambolaki na veranda ya likolo ya ndako ya mokonzi. Wuta na likolo ya veranda, amonaki mwasi moko azali kosukola. Mwasi yango azalaki kitoko makasi. \v 3 Davidi atindaki moto moko kokende koluka koyeba soki mwasi yango azali nani. Moto yango alobaki : « Ezali Batisheba, mwana mwasi ya Eliami, mwasi ya Iri, moto ya Iti. » \v 4 Davidi atindaki bantoma mpo na kozwa ye. Batisheba ayaki epai ya Davidi, mpe Davidi asangisaki na ye nzoto. Sima na ye komipetola na mbindo na ye, Batisheba azongaki na ndako na ye. \v 5 Akomaki na zemi, mpe atindaki maloba epai ya Davidi : « Nazali na zemi. » \p \v 6 Davidi atindaki maloba epai ya Joabi : « Tindela ngai Iri, moto ya Iti. » Joabi atindaki Iri epai ya Davidi. \v 7 Tango Iri akomaki epai na ye, Davidi atunaki ye soki Joabi azali malamu, soki basoda bazali malamu mpe soki bitumba ezali koleka ndenge nini. \v 8 Bongo Davidi alobaki na Iri : « Kende na ndako na yo mpe sukola makolo na yo. » \p Iri atikaki ndako ya mokonzi ; mpe sima na ye, mokonzi atindelaki ye kado. \v 9 Kasi Iri alalaki na ekotelo ya ndako ya mokonzi elongo na basali nyonso ya mokonzi na ye ; akendeki te na ndako na ye. \v 10 Tango bayebisaki Davidi ete Iri akendeki na ndako te, atunaki ye : \pi1 — Boni, yo owuti mosika te ? Mpo na nini oboyi kozonga na ndako na yo ? \p \v 11 Iri azongiselaki Davidi : \pi1 — Sanduku, Isalaele mpe Yuda bazali kovanda na bandako ya kapo ; mpe Joabi, nkolo na ngai, elongo na bato na ye bazali kolala libanda kati na zamba. Ndenge nini ngai nakende na ndako na ngai mpo na kolia, komela mpe kolala na mwasi na ngai ? Solo, na kombo na yo mokonzi, nakoki kosala likambo ya boye te. \p \v 12 Davidi alobaki na Iri : \pi1 — Vanda lisusu awa lelo, bongo lobi nakozongisa yo. \p Iri avandaki na Yelusalemi mokolo wana mpe mokolo oyo elandaki. \p \v 13 Davidi abengisaki ye. Iri aliaki mpe amelaki elongo na ye, mpe Davidi alangwisaki ye. Kasi na pokwa, Uri abimaki mpo na kokende kolala na mbeto na ye elongo na basali ya mokonzi, kasi akendeki na ndako na ye te. \p \v 14 Na tongo, Davidi akomelaki Joabi mokanda mpe atindaki yango na nzela ya Iri. \v 15 Kati na mokanda yango, akomaki boye : « Tia Iri na molongo ya liboso, na esika oyo bitumba ezali makasi. Mpe bino, bozonga sima na ye mpo ete babeta ye mpe akufa. » \p \v 16 Joabi oyo azalaki kokengela engumba, atiaki Iri na esika oyo ayebaki ete ezali penza na basoda ya mpiko. \v 17 Bongo tango bato ya engumba babimaki mpo na kobundisa Joabi, ndambo ya basoda kati na mampinga ya Davidi bakufaki ; Iri, moto ya Iti, mpe akufaki. \p \v 18 Joabi atindelaki Davidi sango nyonso ya bitumba. \v 19 Apesaki mitindo oyo epai ya ntoma : « Tango okosilisa kopesa sango ya bitumba epai ya mokonzi, \v 20 mokonzi akoki kotomboka mpe kotuna yo : ‹ Mpo na nini bopusanaki makasi pembeni ya engumba mpo na kobunda ? Boyebaki te ete bakokaki kobeta batolotolo wuta na mir ? \v 21 Nani abomaki Abimeleki, mwana mobali ya Yerubesheti ? Ezalaki te mwasi oyo, wuta na likolo ya mir, abwakelaki ye libanga oyo banikelaka ble, yango wana akufaki na Tebesi ? Mpo na nini bopusanaki pembeni ya mir ? › Soki atuni yo bongo, loba na ye : ‹ Mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufi. › » \p \v 22 Motindami akendeki, mpe tango akomaki, ayebisaki Davidi makambo nyonso oyo Joabi atindaki ye koloba. \v 23 Alobaki na Davidi : \pi1 — Bato yango bazalaki makasi koleka biso, bayaki kobundisa biso na libanda, mpe tobenganaki bango kino na ekotelo ya engumba. \pi1 \v 24 Bongo basoda oyo babundaka na batolotolo babetaki na batolotolo na bango basali na yo wuta na likolo ya mir. Ndambo ya bato ya mokonzi bakufaki, ezala mosali na yo, Iri, moto ya Iti, mpe akufaki. \p \v 25 Davidi alobaki na ntoma : \pi1 — Tala makambo oyo okoloba na Joabi : « Tika ete likambo oyo etungisa yo te. Mopanga ekoki koboma songolo to pakala. Sala makasi mpo na kobundisa engumba mpe bebisa yango. » Loba makambo oyo mpo na kolendisa Joabi. \p \v 26 Tango mwasi ya Iri ayokaki ete mobali na ye akufi, asalelaki ye matanga. \v 27 Sima na matanga, Davidi abengisaki mwasi ya Uri kati na ndako na ye mpe akomisaki ye mwasi na ye. Mwasi yango abotelaki Davidi mwana mobali. Kasi likambo oyo Davidi asalaki esepelisaki Yawe te. \c 12 \s1 Natan apameli Davidi \p \v 1 Yawe atindaki Natan epai ya Davidi. Tango akomaki epai ya Davidi, alobaki na ye : « Ezalaki na bato mibale kati na engumba moko : moko kati na bango azalaki mozwi ; mpe mosusu, mobola. \v 2 Mozwi azalaki na bameme mpe bangombe ebele, \v 3 kasi mobola azalaki na eloko te longola kaka mwa mwana meme moko ya mwasi oyo asombaki. Abokolaki yango mpe ekolaki epai na ye elongo na bana na ye. Mpate yango ezalaki kolia bilei na sani moko, komela mayi na kopo moko na nkolo na yango mpe kolala na maboko na ye. Ezalaki lokola mwana na ye ya mwasi. \v 4 Mokolo moko, mopaya moko ayaki epai ya mozwi, kasi mozwi aboyaki kozwa meme moko kati na bameme na ye to ngombe moko kati na bangombe na ye mpo na kolamba yango mpo na mopaya oyo ayaki epai na ye ; azwaki kaka mwa mwana meme ya mwasi ya mobola mpe alambaki yango mpo na mopaya oyo ayaki epai na ye. » \p \v 5 Davidi asilikelaki mozwi makasi mpe alobaki na Natan : \pi1 — Na Kombo na Yawe, moto oyo asali boye asengeli na kufa ! \v 6 Asengeli kofuta mwa mwana meme yango mbala minei, pamba te azalaki na mawa te ya kosala likambo ya boye. \p \v 7 Natan alobaki na Davidi : \pi1 — Moto yango ezali nde yo ! Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Napakolaki yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele mpe nakangolaki yo na maboko ya Saulo ; \v 8 nakabaki na maboko na yo ndako ya nkolo na yo, Saulo, mpe basi na ye ; napesaki yo libota ya Isalaele mpe libota ya Yuda. Bongo soki nyonso wana ezalaki moke koleka, nalingaki kobakisela yo lisusu ebele koleka. \v 9 Mpo na nini otioli Liloba na Yawe na kosala makambo oyo ezali mabe na miso na Ye ? Obomisi Iri, moto ya Iti, na mopanga mpe ozwi mwasi na ye mpo ete akoma mwasi na yo. Obomisi ye na mopanga ya bato ya Amoni. \v 10 Mpo na yango, mopanga ekolongwa lisusu te na ndako na yo, pamba te otioli ngai mpe ozwi mwasi ya Iri, moto ya Iti, mpo ete akoma mwasi na yo. \v 11 Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nakoyeisa pasi epai na yo wuta na ndako na yo moko ; na miso na yo, nakokamata basi na yo mpe nakopesa bango na moko kati na baninga na yo, oyo akosangisa na bango nzoto na moyi makasi. \v 12 Osalaki yango na nkuku, kasi ngai nakosala likambo oyo na moyi mpe na miso ya Isalaele mobimba. › » \p \v 13 Davidi alobaki na Natan : \pi1 — Solo, nasalaki masumu epai na Yawe. \p Natan azongisaki : \pi1 — Yawe alongoli masumu na yo ; okokufa te. \v 14 Kasi lokola na likambo oyo yo osali, opesi na banguna ya Yawe nzela ya kofinga Ye, mwana oyo bakobotela yo akokufa. \p \v 15 Sima na yango, Natan azongaki na ndako na ye. Yawe abetaki mwana oyo mwasi ya Iri abotelaki Davidi, mpe mwana yango akomaki kobela. \v 16 Davidi abondelaki Nzambe mpo na mwana, akilaki bilei, akotaki na ndako na ye mpe akomaki kolala na mabele babutu nyonso. \v 17 Bakambi ya ndako na ye bayaki kotelema pembeni na ye mpo na kotelemisa ye wuta na mabele, kasi aboyaki mpe andimaki te kolia bilei elongo na bango. \v 18 Na mokolo ya sambo, mwana akufaki. Basali ya Davidi babangaki koyebisa ye ete mwana akufi, pamba te bazalaki komilobela : « Wana mwana azalaki nanu na bomoi, tango tolobaki na Davidi, ayokaki biso te. Awa sik’oyo mwana akufi, tokoloba na ye ndenge nini ? Soki toyebisi ye sik’oyo ete mwana akufi, akoki kosala likambo moko ya mabe ! » \p \v 19 Davidi amonaki basali na ye koloba na se se kati na bango, mpe asosolaki ete mwana akufi. Atunaki : \pi1 — Boni, mwana akufi ? \p Bazongisaki : \pi1 — Iyo, akufi. \p \v 20 Bongo Davidi atelemaki wuta na mabele, amisukolaki nzoto, amipakolaki malasi, alataki bilamba mosusu, akotaki na Tempelo ya Yawe mpe agumbamaki mpo na kosambela. Sima, azongaki na ndako na ye, asengaki bilei mpe aliaki. \p \v 21 Basali na ye batunaki : \pi1 — Mpo na nini ozali kosala boye ? Wana mwana azalaki na bomoi, ozalaki komilalisa nzala mpe ozalaki kolela ; awa sik’oyo mwana akufi, otelemi mpe okomi kolia ! \p \v 22 Azongisaki : \pi1 — Solo, wana mwana azalaki nanu na bomoi, nazalaki kokila bilei mpe kolela, pamba te nazalaki komilobela : « Nani ayebi ? Tango mosusu Yawe akosalela ngai ngolu mpe akotika mwana na bomoi ! » \v 23 Kasi lokola sik’oyo akufi, mpo na nini nakila bilei ? Boni, nakoki kozongisa ye lisusu na bomoi ? Ngai nde nakokende epai na ye, kasi ye akozonga epai na ngai te. \p \v 24 Bongo Davidi abondisaki mwasi na ye, Batisheba ; akendeki epai na ye mpe asangisaki na ye nzoto. Batisheba abotelaki ye lisusu mwana mobali mpe apesaki ye kombo « Salomo. » Yawe alingaki ye \v 25 mpe atindaki maloba na nzela ya mosakoli Natan ete bapesa ye kombo « Yedidia, » pamba te Yawe alingaki ye. \s1 Davidi abotoli engumba Raba \p \v 26 Joabi abundisaki engumba Raba ya bato ya Amoni mpe abotolaki mboka mokonzi. \v 27 Joabi atindaki bantoma koloba na Davidi : « Nabundisi Raba mpe nabotoli eteni ya mabele epai wapi mayi ezali. \v 28 Sik’oyo, sangisa basoda oyo batikali, bozingela engumba Raba mpe bokamata yango ; soki te nakokamata yango ngai moko, mpe kombo na ngai ekosakolama kuna. » \r (1Ma 20.1-3) \p \v 29 Davidi asangisaki mampinga nyonso mpe akendeki na Raba, abundisaki mpe akamataki yango. \v 30 Alongolaki motole oyo ezalaki na moto ya mokonzi na yango. Motole yango esalemaki na bakilo ya wolo koleka tuku misato mpe ezalaki na libanga ya talo na likolo na yango. Wuta na tango wana, ekomaki na moto ya Davidi. Akamataki bomengo ebele ya bitumba kati na engumba yango. \v 31 Amemaki na bowumbu bato oyo bazalaki kuna, atiaki bango na misala oyo basalaka na si, na piki mpe na epasola ; atiaki bango mpe na mosala ya kosala babiliki. Davidi asalaki ndenge wana na bavandi ya bingumba nyonso ya bato ya Amoni. Bongo azongaki na Yelusalemi elongo na mampinga na ye nyonso. \c 13 \s1 Aminoni mpe Tamari \p \v 1 Abisalomi, mwana mobali ya Davidi, azalaki na ndeko moko ya mwasi ya kitoko makasi ; kombo na ye ezalaki « Tamari. » Aminoni, mwana mobali mosusu ya Davidi, akomaki kolinga ye ndenge mwasi mpe mobali balinganaka. \v 2 Aminoni atungisamaki makasi na motema kino abelaki maladi ya bolingo likolo ya Tamari, ndeko na ye ya mwasi ; pamba te ayebaki nanu nzoto ya mibali te mpe ekokaki kosalema te ete Aminoni abenga ye mpo na kosolola. \v 3 Nzokande Aminoni azalaki na moninga na ye moko ya mobali ; kombo na ye ezalaki « Yonadabi, » mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi. Yonadabi azalaki na mayele mabe mingi. \v 4 Atunaki Aminoni : \pi1 — Mpo na nini yo mwana mobali ya mokonzi ozalaka tango nyonso mawa-mawa boye ? Okoki koyebisa ngai te mpo na nini ozalaka bongo ? \p Aminoni alobaki na ye : \pi1 — Nalingaka Tamari, ndeko mwasi ya Abisalomi, ndeko na ngai ya mobali. \p \v 5 Yonadabi alobaki na ye : \pi1 — Oh, sala boye : « Kende na mbeto mpe kosana kobela. Tango tata na yo akoya kotala yo, okoloba na ye : ‹ Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kopesa ngai eloko ya kolia. Tika ete alamba biloko na miso na ngai mpo ete namona ye mpe nakoka kolia na loboko na ye. › » \p \v 6 Aminoni amitandaki na mbeto mpe akosanaki kobela. Tango mokonzi ayaki mpo na kotala ye, Aminoni alobaki na ye : « Nalingi ete Tamari, ndeko na ngai ya mwasi, aya kolambela ngai na miso na ngai bagalete mibale ya kitoko mpo ete nakoka kolia yango na loboko na ye. » \p \v 7 Davidi atindaki maloba epai ya Tamari oyo azalaki kati na shambre na ye : « Kende na ndako ya Aminoni, ndeko na yo ya mobali, mpe lambela ye biloko. » \p \v 8 Boye Tamari akendeki na ndako ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, oyo azalaki ya kolala. Akamataki farine, asangisaki yango, asalaki bagalete na miso na ye mpe atumbaki yango. \v 9 Alongolaki yango na kikalungu mpe apesaki yango na Aminoni, kasi Aminoni aboyaki kolia. Aminoni alobaki : \pi1 — Bimisa bato nyonso libanda. \p Bato nyonso babimaki. \p \v 10 Aminoni alobaki na Tamari : \pi1 — Memela ngai biloko ya kolia awa kati na shambre na ngai ya kolala mpo ete nalia yango wuta na loboko na yo. \p Tamari azwaki bagalete oyo asalaki mpe amemaki yango epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, kati na shambre na ye ya kolala. \v 11 Tango kaka Tamari asembolaki loboko epai ya Aminoni mpo na koleisa ye galeti, Aminoni akangaki ye na nzoto mpe alobaki na ye : \pi1 — Yaka kolala elongo na ngai, ndeko na ngai ya mwasi. \p \v 12 Tamari alobaki na ye : \pi1 — Te, ndeko na ngai ya mobali ! Kosangisa na ngai nzoto na makasi te. Likambo ya boye ekoki kosalema te kati na Isalaele ! Kosala bozoba ya boye te. \v 13 Ekosukela ngai ndenge nini ? Nakokende wapi na soni na ngai ? Mpe yo okozala ndenge nini ? Okokoma lokola moto ya liboma kati na Isalaele ! Nabondeli yo, loba na mokonzi, pamba te akoboya te ete obala ngai. \p \v 14 Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye ; mpe lokola alekaki Tamari na makasi, azwaki ye na makasi mpe asangisaki na ye nzoto. \p \v 15 Sima na yango, Aminoni ayinaki Tamari makasi, ayinaki ye penza makasi koleka ndenge azalaki kolinga ye. Aminoni alobaki na Tamari : \pi1 — Telema mpe bima ! \p \v 16 Tamari azongiselaki ye : \pi1 — Te, kobengana ngai ezali mabe makasi koleka ata makambo oyo owuti kosala ngai ! \p Kasi Aminoni aboyaki koyoka ye. \v 17 Abengaki mosali na ye mpe alobaki : « Bimisa elenge mwasi oyo na libanda mpe kanga ekuke na bibende sima na ye. » \v 18 Mosali abimisaki Tamari na libanda mpe akangaki ekuke na bibende sima na ye. Tamari alataki nzambala moko ya kitoko, pamba te ezalaki lolenge ya bilamba oyo bana basi ya mokonzi oyo bayebi nanu nzoto ya mibali te bazalaki kolata. \v 19 Tamari atiaki putulu na moto na ye mpe apasolaki nzambala na ye ya kitoko oyo alataki. Atiaki maboko na ye na moto mpe, wana azalaki kokende, azalaki kolela na mongongo makasi. \v 20 Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, atunaki ye : « Boni, Aminoni, ndeko na yo ya mobali, azalaki elongo na yo ? Sik’oyo, ndeko na ngai ya mwasi, kolobela yango te ; azali ndeko na yo ya mobali. Kotia likambo oyo na motema te ! » \p Tamari avandaki kati na ndako ya Abisalomi, ndeko na ye ya mobali, lokola mwasi basundola. \p \v 21 Tango mokonzi Davidi ayokaki makambo oyo nyonso, asilikaki makasi. \v 22 Abisalomi alobaki ata liloba moko te epai ya Aminoni, ndeko na ye ya mobali, ezala ya malamu to ya mabe, pamba te ayinaki Aminoni mpo ete asambwisaki Tamari, ndeko na ye ya mwasi. \s1 Abisalomi abomi Aminoni \p \v 23 Sima na mibu mibale, lokola Abisalomi azalaki na basali oyo bakataka bapwale ya bameme, na Bala-Atsori, pene ya mondelo ya Efrayimi, abengisaki bana mibali nyonso ya mokonzi. \v 24 Abisalomi akendeki epai ya mokonzi mpe alobaki na ye : \pi1 — Mosali na yo abengisi basali oyo bakataka bapwale ya bameme. Tika ete mokonzi mpe bakalaka na ye basepela koya kosangana na ngai, mosali na yo. \p \v 25 Mokonzi azongisaki : \pi1 — Te, mwana na ngai, tokoki te kokende biso nyonso, noki te tokozala mokumba mpo na yo. \p Atako Abisalomi atungisaki ye, kasi mokonzi aboyaki kaka kokende, kasi apambolaki ye. \v 26 Abisalomi alobaki lisusu : \pi1 — Nabondeli yo, pesa kaka nzela ete ata Aminoni, ndeko na ngai ya mobali, akende elongo na biso. \p Mokonzi atunaki ye : \pi1 — Mpo na nini akende elongo na yo ? \p \v 27 Kasi Abisalomi akobaki kaka kotungisa ye, mpe mokonzi atindaki bana mibali mosusu ya mokonzi ete bakende elongo na Aminoni. \p \v 28 Abisalomi apesaki mitindo epai ya basali na ye : \pi1 — Boyoka ! Tango Aminoni akolangwa masanga ya vino, soki nalobi na bino : « Bobeta Aminoni ; » wana boboma ye. Bobanga te, pamba te ezali ngai moko nde nakopesa mitindo oyo. Bozala makasi mpe boyika mpiko. \p \v 29 Basali ya Abisalomi basalaki Aminoni ndenge kaka Abisalomi atindaki bango. Bana mibali nyonso ya mokonzi batelemaki, bamataki na bamile na bango mpe bakimaki. \v 30 Wana bazalaki nanu na nzela, sango ekomaki epai ya Davidi : « Abisalomi abomi bana mibali nyonso ya mokonzi, moko te kati na bango atikali. » \v 31 Mokonzi atelemaki, apasolaki bilamba na ye mpe amitandaki na mabele. Bakalaka na ye nyonso batelemaki wana na bilamba epasuka. \v 32 Kasi Yonadabi, mwana mobali ya Shimea, ndeko mobali ya Davidi, alobaki : « Tika ete nkolo na ngai akanisa te ete babomi bana mibali nyonso ya mokonzi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi, pamba te, wuta mokolo oyo Aminoni asangisaki na makasi nzoto na Tamari, ndeko na ye ya mwasi, Abisalomi azwaki mokano ya koboma ye. \v 33 Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, amitungisa na ye te mpo na sango oyo asili koyoka, sango oyo ezali koloba ete bana mibali nyonso ya mokonzi bakufi ! Ezali Aminoni kaka moto akufi. » \p \v 34 Na tango yango, Abisalomi akimaki. Nzokande tango mokengeli atalaki na mosika, amonaki bato ebele kokita na mopanzi ya ngomba, na nzela ya weste. Mokengeli akendeki koyebisa mokonzi : « Namoni bato na nzela ya Oronayimi, na mopanzi ya ngomba. » \p \v 35 Yonadabi alobaki na mokonzi : \pi1 — Tala ! Bana mibali ya mokonzi bazali koya ! Esalemi ndenge kaka mosali na yo alobaki. \p \v 36 Tango kaka asilisaki koloba, bana mibali ya mokonzi bakotaki na kolela na mongongo makasi. Mokonzi mpe alelaki makasi elongo na basali na ye. \v 37 Abisalomi akimaki mpe akendeki epai ya Talimayi, mwana mobali ya Amiwudi, mokonzi ya Geshuri. Kasi mokonzi Davidi asalaki mikolo nyonso matanga mpo na mwana na ye ya mobali. \p \v 38 Abisalomi akimaki mpe akendeki na mboka Geshuri, avandaki kuna mibu misato. \v 39 Mokonzi Davidi atikaki kolanda Abisalomi, pamba te amibondisaki na tina na kufa ya Aminoni. \c 14 \s1 Abisalomi azongi na Yelusalemi \p \v 1 Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asosolaki ete motema ya mokonzi ekomi na posa ya Abisalomi. \v 2 Boye, Joabi atindaki moto moko na mboka Tekoa, mpo na koluka mwasi moko ya bwanya mpe komema ye longwa kuna. Alobaki na ye : « Sala lokola moto oyo azali na matanga, lata bilamba ya matanga, kopakola mafuta te : sala lokola mwasi oyo alata pili wuta mikolo ebele mpo na kolela ebembe ; \v 3 mpe kende epai ya mokonzi, yebisa ye maloba oyo. » \p Joabi ayebisaki maloba oyo asengelaki koloba. \p \v 4 Tango mwasi ya mboka Tekoa akomaki epai ya mokonzi, agumbamaki elongi na ye kino na mabele mpe alobaki : \pi1 — Oh mokonzi, sunga ngai ! \p \v 5 Mokonzi atunaki ye : \pi1 — Eloko nini ezali kotungisa yo ? \p Azongisaki : \pi1 — Nazali mwasi akufisa mobali ; mobali na ngai akufaki. \v 6 Ngai, mwasi mosali na yo, nazalaki na bana mibali mibale. Bango mibale baswanaki kati na bilanga, mpe moto moko te azalaki kuna mpo na kokabola bango. Moko abetaki mosusu mpe abomaki ye. \v 7 Sik’oyo, libota mobimba etelemeli mwasi mosali na yo, bazali koloba : « Kaba na maboko na biso ye oyo abetaki ndeko na ye ya mobali mpo ete toboma ye mpo na bomoi ya ndeko na ye ya mobali oyo ye abomaki. Na nzela wana, tokolongola mokitani ya libula. » Na bongo, bakoki koboma mwa likala ya moto oyo natikali na yango mpe kozangisa mobali na ngai kombo mpe bakitani kati na mokili. \p \v 8 Mokonzi alobaki na mwasi : \pi1 — Zonga na ndako na yo, nakopesa mitindo na tina na yo. \p \v 9 Kasi mwasi ya mboka Tekoa alobaki na mokonzi : \pi1 — Oh mokonzi, nkolo na ngai, tika ete ngambo ekweya na moto na ngai mpe na libota ya tata na ngai ; kasi tika ete mokonzi mpe kiti na ye ya bokonzi bazala mosika ya likambo oyo. \p \v 10 Mokonzi alobaki na ye : \pi1 — Soki moto moko ameki kotombokela yo, yaka na ye epai na ngai, mpe akozongela lisusu te kotungisa yo. \p \v 11 Mwasi alobaki : \pi1 — Tika ete mokonzi alapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe na ye, ete akopekisa mobukanisi makila mpo ete akoba te kobebisa na koboma mwana na ngai ya mobali, oyo atikali. \p Mokonzi alobaki : \pi1 — Na Kombo na Yawe, suki ata moko te ya moto ya mwana na yo ya mobali ekokweya na mabele. \p \v 12 Mwasi yango alobaki : \pi1 — Tika ete mwasi mosali na yo aloba likambo moko epai ya mokonzi, nkolo na ngai. \p Mokonzi azongisaki : \pi1 — Loba ! \p \v 13 Mwasi alobaki : \pi1 — Mpo na nini osali mabongisi ya boye mpo na kotelemela bato ya Nzambe ? Wana mokonzi abimisi maloba oyo, ye moko azali komikweyisa te mpo ete azongisi te mwana mobali oyo akimaki na mboka ya bapaya ? \v 14 Solo, ndenge bakokaka te kolokota mayi oyo esili kosopana, ndenge mpe biso tosengeli kokufa. Kasi sik’oyo, ezali te mokano ya Nzambe mpo na Abisalomi, pamba te asalaki mabongisi mpo ete moto oyo abungi nzela awumela te mosika na Ye. \v 15 Mpe sik’oyo, soki nayei kobimisa maloba oyo epai ya mokonzi, nkolo na ngai, ezali mpo ete bato babangisaki ngai. Yango wana mwasi mosali na yo amilobelaki : « Tika ete naloba na mokonzi, nkolo na ngai. Tango mosusu, akosala kolanda makambo oyo mwasi mosali na ye akosenga. \v 16 Tango mosusu, mokonzi akondima kokangola mwasi mosali na ye wuta na loboko ya mobali oyo azali koluka kobwaka ngai mpe mwana na ngai ya mobali mosika ya libula oyo Nzambe apesaki biso. » \v 17 Mpe sik’oyo, tala makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba : « Tika ete liloba ya mokonzi, nkolo na ngai, epesa ngai bopemi, pamba te mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe oyo ayebaka kososola mabe mpe malamu. Tika ete Yawe, Nzambe na yo, azala elongo na yo ! » \p \v 18 Mokonzi alobaki na mwasi : \pi1 — Kobombela ngai te eyano ya likambo oyo nalingi kotuna yo. \p Mwasi azongisaki : \pi1 — Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, aloba ! \p \v 19 Mokonzi atunaki : \pi1 — Boni, loboko ya Joabi ezali elongo na yo te na makambo oyo nyonso ? \p Mwasi azongisaki : \pi1 — Na kombo na yo mokonzi, nkolo na ngai, kati na makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, awuti koloba, moto moko te akoki kokende, ezala na ngambo ya loboko ya mobali to na ngambo ya loboko ya mwasi. Solo, ezali mosali na yo, Joabi, nde atindaki ngai kosala makambo oyo, mpe ye nde atiaki maloba oyo na monoko na ngai mwasi mosali na yo. \v 20 Mosali na yo, Joabi, asalaki boye mpo na kobongola mpe kokomisa makambo oyo ndenge mosusu. Kasi nkolo na ngai azali na bwanya lokola Anjelu na Nzambe, ayebi makambo nyonso oyo ezali koleka kati na mokili. \p \v 21 Mokonzi alobaki na Joabi : \pi1 — Malamu ! Nakosala yango. Kende, zongisa elenge mobali Abisalomi. \p \v 22 Bongo Joabi agumbamaki elongi kino na mabele mpo na kopesa mokonzi lokumu mpe apambolaki ye. \p Joabi alobaki : \pi1 — Lelo, mosali na yo asosoli ete azwi ngolu na miso na yo mokonzi, nkolo na ngai, pamba te mokonzi andimi kosala makambo oyo mosali na ye asengi. \p \v 23 Bongo Joabi akendeki na Geshuri mpe azongisaki Abisalomi, na Yelusalemi. \v 24 Kasi mokonzi alobaki : \pi1 — Asengeli kokende na ndako na ye ; asengeli te komona elongi na ngai. \p Boye Abisalomi akendeki na ndako na ye, mpe amonaki elongi ya mokonzi te. \p \v 25 Kati na Isalaele mobimba, ezalaki na moto moko te oyo azalaki kitoko koleka Abisalomi mpe oyo bazalaki kokumisa lokola ye. Azalaki ata na mbeba moko te, banda na moto kino na misapi ya makolo. \v 26 Na suka ya mibu nyonso, azalaki kokata suki ya moto na ye, mpo ete ezalaki kokoma kilo makasi. Boye tango bazalaki kotia yango na bimekelo, ezalaki na bakilo mibale na bagrame nkama mitano, kolanda ndenge bamekaka kilo kati na ndako ya mokonzi. \v 27 Abisalomi azalaki na bana mibali misato mpe mwana moko ya mwasi. Kombo ya mwana na ye ya mwasi ezalaki Tamari, mpe azalaki mwasi moko ya kitoko makasi. \p \v 28 Abisalomi avandaki na Yelusalemi mibu mibale mpe atikalaki komona te elongi ya mokonzi. \v 29 Bongo Abisalomi abengisaki Joabi mpo ete atinda ye epai ya mokonzi, kasi Joabi aboyaki kokende epai na ye. Abengisaki lisusu Joabi na mbala ya mibale, kasi Joabi aboyaki kaka kokende. \v 30 Abisalomi alobaki na basali na ye : « Botala ! Elanga ya Joabi ezali pembeni ya elanga na ngai, ezali na bambuma ya orje. Bokende kotia yango moto. » \p Basali ya Abisalomi batiaki yango moto. \v 31 Joabi akendeki na ndako ya Abisalomi mpe alobaki na ye : \pi1 — Mpo na nini otie moto na elanga na ngai ? \p \v 32 Abisalomi azongiselaki Joabi : \pi1 — Tala, natindelaki yo maloba ; nalobaki : « Yaka awa mpo ete natinda yo epai ya mokonzi mpo na kotuna ye : ‹ Mpo na nini nalongwaki na Geshuri ? Elingaki kozala malamu mpo na ngai soki natikalaki na ngai kuna. Sik’oyo, nalingi komona elongi ya mokonzi ; mpe soki namemaki ngambo na likambo moko, tika ete baboma ngai ! › » \p \v 33 Boye Joabi akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Mokonzi abengisaki Abisalomi, mpe Abisalomi akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki elongi kino na mabele, mpe mokonzi ayambaki ye. \c 15 \s1 Botomboki ya Abisalomi \p \v 1 Na tango wana, Abisalomi azwaki shar, bampunda mpe basoda tuku mitano oyo bazalaki kotambola liboso na ye lokola bakengeli na ye. \v 2 Abisalomi azalaki kolamuka na tongo makasi mpe azalaki kokende kotelema pembeni ya nzela oyo ekenda na ekotelo ya engumba. Bongo, tango nyonso moto azalaki koleka mpo na kokende epai ya mokonzi mpo ete akatela ye likambo, ye Abisalomi azalaki kobenga ye mpe kotuna ye : \pi1 — Ozali moto ya engumba nini ? \p Soki moto yango azongisi : \pi1 — Mosali na yo azali moto ya moko kati na bikolo ya Isalaele. \p \v 3 Abisalomi azalaki koloba na ye : \pi1 — Tala, likambo na yo ezali malamu mpe sembo ; kasi ezali na moto moko te oyo akoki koyoka yo epai ya mokonzi. \p \v 4 Abisalomi azalaki kobakisa : \pi1 — Ah ! Soki nazalaki mosambisi kati na mokili oyo, moto nyonso oyo azali na likambo alingaki koya epai na ngai, mpe nalingaki kolongisa ye na likambo yango ! \p \v 5 Mpe tango nyonso moto azalaki kopusana mpo na kogumbama liboso na ye Abisalomi, Abisalomi azalaki kopesa loboko, koyamba mpe kopesa ye beze. \v 6 Azalaki kosala bongo epai ya bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kokende epai ya mokonzi mpo ete akata likambo na bango, mpe ezalaki bongo nde Abisalomi azalaki komikotisa na mayele kati na mitema ya bato ya Isalaele. \p \v 7 Sima na mibu minei, Abisalomi alobaki na mokonzi : \pi1 — Pesa ngai nzela mpo ete nakende na Ebron mpo na kokokisa ndayi oyo nalapaki epai na Yawe, \v 8 pamba te tango mosali na yo azalaki kovanda na Geshuri kati na Siri, nalapaki ndayi oyo : « Soki Yawe azongisi ngai na Yelusalemi, nakogumbamela Ye. » \p \v 9 Mokonzi alobaki na ye : \pi1 — Kende na kimia. \p Boye akendeki na Ebron. \v 10 Mpe longwa kuna, Abisalomi atindaki bantoma kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo na koloba : « Tango kaka bokoyoka lokito ya kelelo, boloba : ‹ Abisalomi akomi mokonzi kati na Ebron. › » \p \v 11 Mibali nkama mibale babengisamaki wuta na Yelusalemi mpe bakendeki elongo na Abisalomi. Bakendeki na boboto mpe bayebaki ata likambo moko te. \v 12 Wana Abisalomi azalaki kobonza mbeka, abengisaki Ayitofeli, moto ya Gilo, mopesi toli ya Davidi, wuta na engumba na ye ya Gilo. Boye, likita ya batomboki ekomaki makasi ; mpe lisanga ya Abisalomi ekomaki na bato ebele. \s1 Davidi akimi \p \v 13 Ntoma moko ayaki koyebisa Davidi : \pi1 — Mitema ya bato ya Isalaele esangani elongo na Abisalomi. \p \v 14 Davidi alobaki na bakalaka na ye nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi : \pi1 — Boya ! Tosengeli kokima, soki te moko te kati na biso akobika liboso ya Abisalomi. Tosengeli kobima na lombangu, soki te akoya na lombangu kokanga biso, kobebisa biso mpe koboma engumba na mopanga. \p \v 15 Bakalaka ya mokonzi bazongiselaki Davidi : \pi1 — Basali na yo bazali ya kobongama mpo na kosala makambo nyonso oyo mokonzi, nkolo na biso, akopona. \p \v 16 Mokonzi akendeki na makolo elongo na libota na ye mobimba oyo ezalaki kolanda ye ; kasi atikaki bamakangu zomi mpo na kobatela ndako na ye. \v 17 Boye mokonzi akendeki na makolo elongo na bato na ye nyonso oyo bazalaki kolanda ye mpe batelemaki pene ya ndako ya suka ya engumba. \v 18 Basoda na ye nyonso bazalaki kotambola na bapembeni na ye elongo na bato nyonso ya Kereti mpe ya Peleti. Mpe bato nyonso ya Gati, nkama motoba, oyo batambolaki elongo na ye longwa na Gati, bazalaki kotambola liboso ya mokonzi. \p \v 19 Mokonzi alobaki na Itayi, moto ya Gati : \pi1 — Mpo na nini yo mpe olingi koya elongo na biso ? Zonga mpe vanda elongo na Abisalomi, mokonzi ya sika ! Ozali mopaya, otikaki mboka na yo mpo na koya kokima awa. \v 20 Oyaki mpe kaka lobi oyo ewuti koleka, bongo ndenge nini, lelo, namema yo elongo na biso wana nayebi kutu te epai nini nazali kokende ? Zonga mpe zwa bato ya mboka na yo ! Tika ete bolamu mpe boyengebene ya Yawe ezala elongo na yo ! \p \v 21 Itayi azongiselaki mokonzi : \pi1 — Na Kombo na Yawe mpe na kombo ya mokonzi, nkolo na ngai, mosali na yo akozala bipai nyonso oyo mokonzi, nkolo na ngai, akozala, ezala mpo na bomoi to mpo na kufa. \p \v 22 Davidi alobaki na Itayi : \pi1 — Malamu ! Leka liboso mpe tambola ! \p Boye Itayi, moto ya Gati, atambolaki liboso elongo na basoda nyonso mpe mabota oyo ezalaki elongo na ye. \v 23 Tango bato nyonso bazalaki koleka, mboka mobimba ezalaki kolela makasi. Mokonzi akatisaki lubwaku ya Sedron, mpe bato nyonso bakendeki na nzela oyo ekenda na esobe. \p \v 24 Tsadoki mpe azalaki wana elongo na Balevi oyo bazalaki elongo na ye mpe bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Nzambe. Bakitisaki Sanduku ya Nzambe, mpe Abiatari abonzaki mbeka kino tango bato nyonso basilisaki kobima na engumba. \v 25 Mokonzi alobaki na Tsadoki : \pi1 — Zongisa Sanduku ya Nzambe kati na engumba. Soki nazwi ngolu na miso ya Yawe, akozongisa ngai mpe akopesa ngai nzela ya komona lisusu Sanduku yango mpe ndako na yango. \v 26 Kasi soki Nzambe alobi : « Nasepeli na yo te, » wana tika ete asala epai na ngai makambo oyo amoni ete ezali malamu, pamba te nazali ya kobongama. \p \v 27 Mokonzi alobaki lisusu epai ya Nganga-Nzambe Tsadoki : \pi1 — Ozali momoni makambo te ? Zonga na kimia na engumba elongo na Ayimaatsi, mwana na yo ya mobali, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari. Yo mpe Abiatari, bozwa mpe bomema bana na bino mibale ya mibali. \v 28 Nakozela na bitando ya esobe kino nakoyoka liloba kowuta epai na bino. \p \v 29 Boye Tsadoki mpe Abiatari bazongisaki Sanduku ya Nzambe, na Yelusalemi, mpe batikalaki kuna. \p \v 30 Kasi Davidi azalaki komata ngomba ya banzete ya olive na kolela, moto na ye ya kozipama mpe makolo ngulu. Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazipaki bango mpe mito na bango mpe bazalaki kolela wana bazalaki komata. \v 31 Bayaki koyebisa Davidi ete Ayitofeli azali kati na bato oyo basalaki likita elongo na Abisalomi. Boye Davidi asambelaki : « Eh Yawe, sala ete batoli ya Ayitofeli ezanga tina. » \p \v 32 Tango Davidi akomaki na songe ya ngomba epai wapi bato bazalaki na momesano ya kokende kogumbamela Nzambe, Ushayi, moto ya Ariki, mopesi toli ya Davidi, azalaki kuna mpo na kokutana na ye, na nzambala na ye epasuka mpe moto na ye etonda na putulu. \p \v 33 Davidi alobaki na ye : \pi1 — Soki okeyi elongo na ngai, okozala mokumba mpo na ngai. \v 34 Kasi soki ozongi na engumba mpe olobi na Abisalomi : « Nakozala mosali na yo, oh mokonzi ! Kala, nazalaki mosali ya tata na yo, kasi sik’oyo, nakozala mosali na yo, » wana okosunga ngai na kobebisa toli ya Ayitofeli. \v 35 Lokola Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari bakozala kuna elongo na yo, okoyebisa bango makambo nyonso oyo okoyoka na ndako ya mokonzi. \v 36 Bana na bango ya mibali mibale, Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, mpe Jonatan, mwana mobali ya Abiatari, bazali mpe kuna elongo na bango. Okotinda bango mpo ete baya koyebisa ngai makambo nyonso oyo okoyoka. \p \v 37 Boye Ushayi, moninga ya Davidi, azongaki na engumba, kaka na tango oyo Abisalomi mpe akotaki kati na Yelusalemi. \c 16 \s1 Davidi mpe Tsiba \p \v 1 Tango Davidi alekaki mwa moke songe ya ngomba, Tsiba, mobombi bozwi ya Mefibosheti, azalaki kozela mpo na kokutana na ye ; azalaki na ba-ane mibale oyo babongisi mpo na mobembo mpe ememaki mapa nkama mibale, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka, maboke nkama moko ya bambuma ya figi mpe mbeki moko ya masanga ya vino. \v 2 Mokonzi atunaki Tsiba : \pi1 — Mpo na nini omemi biloko oyo ? \p Tsiba azongisaki : \pi1 — Ba-ane ezali mpo na libota ya mokonzi mpo ete batambola na yango, mapa mpe bambuma ezali mpo na bato mpo ete balia, mpe masanga ya vino ezali mpo na kopesa makasi epai ya bato oyo bakolemba na esobe. \p \v 3 Bongo mokonzi atunaki lisusu : \pi1 — Wapi Mefibosheti, koko ya nkolo na yo ? \p Tsiba azongisaki : \pi1 — Atikalaki na Yelusalemi, pamba te amilobelaki : « Lelo, libota ya Isalaele ekozongisa bokonzi ya koko na ngai na maboko na ngai. » \p \v 4 Mokonzi alobaki na Tsiba : \pi1 — Nyonso oyo ezali ya Mefibosheti ekomi sik’oyo ya yo. \p Tsiba alobaki : \pi1 — Nagumbami liboso na yo mokonzi, nkolo na ngai ! Tika ete nazwa ngolu na miso na yo ! \s1 Shimei alakeli Davidi mabe \p \v 5 Wana mokonzi akomaki pembeni ya Bawurimi, ezalaki na moto moko oyo azalaki kobima wuta na mboka ; kombo na ye ezalaki « Shimei, » mpe azalaki mwana mobali ya Gera. Azalaki moto ya etuka mpe libota moko na Saulo. Bongo wana azalaki kobima, azalaki mpe kolakela Davidi mabe. \v 6 Azalaki kobamba Davidi mpe basali na ye mabanga atako bato nyonso mpe basoda oyo bakengelaka mokonzi bazalaki na ngambo ya loboko ya mwasi mpe na ngambo ya loboko ya mobali ya Davidi. \v 7 Shimei azalaki koloba boye wana azalaki kolakela Davidi mabe : « Bima, bima, mobomi bato, moto pamba. \v 8 Yawe atangi na moto na yo, makila nyonso ya ndako ya Saulo, oyo osopaki mpo ete okoma mokonzi na esika na ye. Yawe akabi bokonzi na maboko ya Abisalomi, mwana na yo ya mobali. Osili kokweya na pasi mpo ete ozali mosopi makila. » \p \v 9 Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki na mokonzi : \pi1 — Mpo na nini mbwa oyo ekufa ezali kolakela nkolo na ngai mabe. Pesa ngai nzela mpo ete nakende kokata ye moto. \p \v 10 Kasi mokonzi alobaki : \pi1 — Bino bana mibali ya Tseruya, yo Abishayi mpe ndeko na yo, Joabi, likambo nini kati na ngai mpe bino ? Soki azali kolakela ngai mabe, ezali nde na ndingisa ya Yawe mpo ete alobi na ye : « Lakela Davidi mabe. » Nani sik’oyo akoki kotuna : « Mpo na nini ozali kosala bongo ? » \p \v 11 Bongo Davidi alobaki na Abishayi mpe na basali na ye nyonso : « Soki kutu mwana na ngai moko ya mobali oyo abimi na nzoto na ngai azali koluka koboma ngai, bongo ndenge nini moto oyo ya Benjame asala bongo te ! Tika ye alakela ngai mabe, pamba te ezali Yawe nde alobi na ye bongo. \v 12 Tango mosusu Yawe akomona pasi na ngai, bongo akobongola na bolamu bilakeli mabe oyo ezali kokweyela ngai lelo. » \p \v 13 Boye, wana Davidi mpe bato na ye bakobaki nzela na bango, Shimei azalaki kotambola na mopanzi mosusu ya ngomba pembeni ya Davidi, azalaki kokoba kolakela Davidi mabe tango azalaki kotambola, kobamba ye mabanga mpe kobwakela ye putulu. \v 14 Mokonzi elongo na bato na ye nyonso balembaki tango bakomaki na esika oyo bazalaki kokende mpe bapemaki kuna. \s1 Abisalomi akomi na Yelusalemi \p \v 15 Kaka na tango yango, Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na Yelusalemi, mpe Ayitofeli azalaki elongo na ye. \v 16 Ushayi, moto ya Ariki, moninga ya Davidi, akendeki epai ya Abisalomi mpe alobaki na ye : \pi1 — Tika ete mokonzi owumela na bomoi ! Tika ete mokonzi owumela na bomoi ! \p \v 17 Abisalomi atunaki Ushayi : \pi1 — Oyo nde bolingo nyonso oyo ozali kolakisa epai ya moninga na yo ? Mpo na nini okendeki te elongo na moninga na yo ? \p \v 18 Ushayi alobaki na Abisalomi : \pi1 — Te, ngai nakozala elongo na moto oyo Yawe, bato oyo mpe Isalaele nyonso baponi. \v 19 Mpe ngai nakosalela nani ? Ezali te mwana na ye ya mobali ? Ndenge nasalelaki tata na yo, ndenge wana mpe nakosalela yo. \p \v 20 Abisalomi alobaki na Ayitofeli : \pi1 — Pesa biso toli na yo : tosengeli kosala nini ? \p \v 21 Ayitofeli azongiselaki Abisalomi : \pi1 — Kende kosangisa nzoto na bamakangu ya tata na yo, oyo batikalaki mpo na kobatela ndako, bongo Isalaele mobimba ekoyoka ete omikomisi nkele na miso ya tata na yo. Na bongo, maboko ya bato oyo bazali sima na yo ekolendisama. \p \v 22 Boye basalelaki Abisalomi ndako ya kapo na likolo ya ndako, mpe asangisaki nzoto na bamakangu ya tata na ye na miso ya Isalaele mobimba. \v 23 Nzokande, na tango wana, toli oyo Ayitofeli abandaki kopesa ezalaki lokola maloba ya moto oyo azali kotuna mayele epai ya Ye moko Nzambe. Ezalaki ndenge wana nde Davidi mpe Abisalomi bazalaki komona batoli ya Ayitofeli. \c 17 \s1 Yawe akakoli batoli ya Ayitofeli \p \v 1 Ayitofeli alobaki na Abisalomi : \pi1 — Nakopona mibali nkoto zomi na mibale mpe nakolanda Davidi na pokwa ya lelo. \v 2 Nakobundisa ye tango makasi na ye ekosila mpe nzoto na ye ekolemba ; nakoyeisa mobulu epai na ye, mpe wana bato nyonso oyo bazali elongo na ye bakokima, ngai nakoboma ye mokonzi tango akotikala ye moko ; \v 3 mpe nakozongisa bato nyonso epai na yo. Kufa ya moto oyo ozali koluka elakisi kozonga ya bato nyonso ! mpe bato nyonso bakozala na kimia. \p \v 4 Makanisi oyo emonanaki ya sembo na miso ya Abisalomi mpe ya bampaka nyonso ya Isalaele. \v 5 Kasi Abisalomi alobaki : \pi1 — Bobengisa lisusu Ushayi, moto ya Ariki, mpo ete toyoka makambo nini oyo ye mpe azali na yango ya koloba. \p \v 6 Tango Ushayi akomaki epai na ye, Abisalomi alobaki : \pi1 — Tala toli oyo Ayitofeli apesi. Boni, tosengeli kosala makambo oyo alobi ? Soki te, yebisa biso makanisi na yo. \p \v 7 Ushayi azongiselaki Abisalomi : \pi1 — Ya mbala oyo, toli oyo Ayitofeli apesi ezali malamu te. \p \v 8 Bongo Ushayi abakisaki : \pi1 — Oyebi ete tata na yo mpe bato na ye bazali bato ya mpiko mpe bato na kanda makasi lokola ngombolo ya mwasi oyo bawuti kobotola bana na yango kati na zamba. Tata na yo azali moto oyo abundaka bitumba wuta kala, akolekisa te butu esika moko na bato. \v 9 Ata azali sik’oyo ya kobombama kati na lidusu ya mabanga to na esika songolo, nzokande tango kaka bato kati na mampinga na biso bakobanda kokufa, ekozanga te komonana moto oyo akoyoka yango mpe akoloba : « Kati na bato oyo bazali kolanda Abisalomi, ebele bakufi. » \v 10 Bongo na tango yango, ata soda oyo aleki na mpiko, oyo azali na motema lokola ya nkosi, akobanga makasi, pamba te Isalaele mobimba eyebi ete tata na yo mpe bato nyonso oyo bazali elongo na ye bazali basoda ya mpiko. \v 11 Boye tala toli na ngai : « Tika ete Isalaele mobimba basangana epai na yo, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bazala ebele lokola zelo ya ebale monene ! Bongo yo moko okotambola liboso na bango na bitumba. \v 12 Bongo tokobundisa ye na bisika nyonso oyo akoki komonana mpe tokokweyela ye ndenge manoka ekweyaka na mabele. Mpe ezala ye to bato na ye, moko te akotikala na bomoi. \v 13 Soki akimi na engumba moko, Isalaele mobimba ekomema basinga kuna na engumba yango mpe tokobenda engumba yango na lubwaku kino etikala ata na libanga moko te. » \p \v 14 Abisalomi mpe bato nyonso ya Isalaele balobaki : \pi1 — Toli ya Ushayi, moto ya Ariki, ezali malamu koleka oyo ya Ayitofeli, pamba te Yawe azwaki mokano ya kokakola batoli malamu ya Ayitofeli mpo na komema pasi epai ya Abisalomi. \p \v 15 Ushayi alobaki na Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari : \pi1 — Ayitofeli apesaki toli na Abisalomi mpe na bampaka ya Isalaele ete basala likambo songolo, mpe ngai napesi bango toli ete basala likambo pakala. \v 16 Sik’oyo, tinda noki sango epai ya Davidi mpo na koloba na ye : « Kolekisa te butu kati na bitando ya esobe, kasi kende mosika, noki te mokonzi mpe bato oyo bazali elongo na yo bokufa. » \p \v 17 Wana Jonatan mpe Ayimaatsi bavandaki na Eyini-Rogeli, mwasi mosali moko amemelaki bango sango oyo bango basengelaki kokende koyebisa mokonzi Davidi ; pamba te basengelaki te kokota kati na engumba mpo ete bamona bango te. \v 18 Nzokande elenge mobali moko amonaki bango mpe akendeki koyebisa Abisalomi. Boye mibali nyonso mibale bakimaki noki mpe bakendeki na ndako ya moto moko ya Bawurimi. Lokola azalaki na libulu moko ya mayi kati na lopango na ye, bakitaki kuna. \v 19 Mwasi na ye akamataki kapo, atiaki yango na monoko ya libulu mpe asopaki bambuma na likolo na yango. Moto moko te ayebaki likambo yango. \v 20 Tango bato ya Abisalomi bayaki epai ya mwasi, batunaki : \pi1 — Ayimaatsi mpe Jonatan bazali wapi ? \p Mwasi azongiselaki bango : \pi1 — Bakatisi mayi. \p Bato ya Abisalomi balukaki, kasi bamonaki moto moko te ; mpe bazongaki na Yelusalemi. \v 21 Tango bakendeki, Ayimaatsi mpe Jonatan babimaki na libulu mpe bakendeki koyebisa mokonzi Davidi : « Botelema mpe bokatisa mayi noki, pamba te Ayitofeli apesi toli moko ya mabe na tina na yo. » \p \v 22 Boye Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakatisaki ebale Yordani. Liboso ete tongo etana, bango nyonso basilisaki kokatisa Yordani, moko te atikalaki. \p \v 23 Tango Ayitofeli amonaki ete balandi te toli na ye, amataki na ane mpe azongaki na ndako na ye kati na engumba na ye. Abongisaki biloko ya ndako na ye mpe amidiembikaki. Boye akufaki mpe bakundaki ye kati na kunda ya tata na ye. \p \v 24 Davidi akendeki na Maanayimi, mpe Abisalomi akatisaki Yordani elongo na bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki elongo na ye. \v 25 Abisalomi atiaki Amasa mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi. Amasa azalaki mwana mobali ya Yeteri, moto ya Isalaele, oyo abalaki Abigayili, mwana mwasi ya Naashi mpe ndeko mwasi ya Tseruya, mama ya Joabi. \v 26 Bato ya Isalaele mpe Abisalomi batongaki molako na bango kati na Galadi. \p \v 27 Tango Davidi akomaki na Maanayimi, bayambaki ye epai ya Shovi, mwana mobali ya Naashi ya mboka Raba ya bato ya Amoni, epai ya Makiri, mwana mobali ya Amieli ya mboka ya Lo-Debari, mpe epai ya Barizilayi, moto ya Galadi ya mboka Rogelimi. \v 28 Bamemaki biloko ya kolalela, bambeki, basani, ble, orje, farine, bambuma oyo bakalinga, madesu, mpe misili, \v 29 mafuta ya nzoyi, miliki, bameme, fromaje ya ngombe, mpo ete Davidi elongo na bato na ye balia ; pamba te bazalaki kolobana bango na bango : « Solo, sima na bango kotambola kati na esobe, bato oyo balembi, bazali konyokwama na nzala mpe na posa ya mayi. » \c 18 \s1 Kufa ya Abisalomi \p \v 1 Davidi atangaki basoda oyo bazalaki elongo na ye ; mpe kati na bango, aponaki bakonzi ya bankoto mpe bakonzi ya bankama. \v 2 Davidi apesaki mitindo na mampinga ete bakende. Akabolaki bango na masanga misato : lisanga ya liboso ekambamaki na Joabi ; ya mibale, na Abishayi, ndeko mobali ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ; mpe ya misato, na Itayi, moto ya Gati. Mokonzi alobaki na masanga ya mampinga ete ye moko akokende solo elongo na bango. \v 3 Kasi basoda balobaki : \pi1 — Okoki kobima te elongo na biso, pamba te soki ekosenga ete tokima, bakotala biso te. Ezala kati-kati ya bato kati na biso bakufi, bakotala yango te, kasi yo ; okokani na bato nkoto zomi kati na biso. Nzokande, ekoleka malamu mpo na yo kosungaka biso tango nyonso wuta na engumba. \p \v 4 Mokonzi azongisaki : \pi1 — Nakosala makambo nyonso oyo bomoni ete ezali malamu. \p Boye wana bato bazalaki kobima na masanga ya bankama mpe ya bankoto, mokonzi atelemaki pembeni ya ekuke. \v 5 Apesaki mitindo oyo epai ya Joabi, Abishayi mpe Itayi : « Na kombo na ngai, bosala malembe na elenge mobali Abisalomi. » \p Basoda nyonso bayokaki mokonzi kopesa mitindo na mokambi moko na moko, na tina na Abisalomi. \v 6 Mampinga etambolaki kati na zamba mpo na kobundisa Isalaele, mpe bitumba ezalaki kati na zamba ya Efrayimi. \v 7 Kuna, mampinga ya Davidi elongaki mampinga ya Isalaele, mpe basoda nkoto tuku mibale bakufaki mokolo wana kati na mampinga ya Isalaele. \v 8 Bitumba epanzanaki mboka mobimba ; mpe mokolo wana, bato oyo bakufaki kati na zamba bazalaki ebele koleka bato oyo bakufaki na mopanga. \p \v 9 Abisalomi akutanaki na bato ya Davidi na mbalakata. Azalaki kotambola na likolo ya mile na ye. Bongo tango mile ekimaki, ekotaki na se ya nzete ya terebente oyo ezalaki na bitape ekangana-kangana, mpe moto ya Abisalomi ekangamaki na nzete. Abisalomi atikalaki ya kodiembela na likolo, kasi mile oyo azalaki kotambolisa ekobaki kokima mbangu. \v 10 Tango moko kati na basoda amonaki ye, alobaki na Joabi : \pi1 — Namoni Abisalomi amidiembiki na nzete ya terebente. \p \v 11 Joabi alobaki na moto oyo ayebisaki ye likambo yango : \pi1 — Boni, omoni ye ? Mpo na nini obomaki ye te mbala moko ? Soki obomaki ye, nalingaki kopesa yo bagrame pene nkama moko ya palata mpe mokaba. \p \v 12 Kasi moto yango azongiselaki Joabi : \pi1 — Ezala soki batie mbongo ya bibende ya palata, nkoto moko na maboko na ngai, nakosembola loboko na ngai te mpo na koboma mwana ya mokonzi. Pamba te toyokaki mitindo oyo mokonzi apesaki epai na yo, epai na Abishayi mpe epai na Itayi, tango alobaki : « Na kombo na ngai, bosala mabe te na elenge mobali Abisalomi. » \v 13 Eloko moko te ebombamaka na miso ya mokonzi. Bongo soki natosaki mokonzi te mpe soki nabomaki Abisalomi, yo olingaki na yo kokotela ngai te. \p \v 14 Joabi alobaki : \pi1 — Nakoki te kolekisa tango na ngai elongo na yo. \p Boye azwaki makonga misato na maboko na ye mpe atubaki yango na motema ya Abisalomi oyo azalaki nanu ya bomoi kati na nzete ya terebente. \p \v 15 Sima, bilenge mibali zomi oyo bamemaki bibundeli ya Joabi, bazingaki Abisalomi, babetaki ye mpe babomaki ye. \v 16 Joabi abetaki kelelo, mpe masanga ya mampinga etikaki kolanda Isalaele, pamba te apekisaki bango. \v 17 Bazwaki Abisalomi, babwakaki ye na zamba kati na libulu moko ya monene mpe bazipaki ye na se ya mopiku ya mabanga. Na tango wana, basoda nyonso ya Isalaele bakimaki na bandako na bango. \p \v 18 Nzokande, wana Abisalomi azalaki nanu na bomoi, azwaki libanga ya ekaniseli mpe atelemisaki yango na lubwaku ya mokonzi lokola ekaniseli mpo na ye, pamba te amilobelaki : « Nazali te na mwana mobali oyo akoki komema kombo na ngai lokola ekaniseli. » \p Boye apesaki libanga yango kombo na ye, mpe yango wana babengaka yango kino lelo « Ekaniseli ya Abisalomi. » \s1 Sango ya kufa ya Abisalomi \p \v 19 Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki na Joabi : \pi1 — Pesa ngai nzela ya kokima mbangu mpo na kokende koyebisa mokonzi ete Yawe akangoli ye na maboko ya banguna na ye. \p \v 20 Joabi alobaki na ye : \pi1 — Ezali yo te moto osengeli komema sango na mokolo ya lelo ; okoki na yo komema sango mokolo mosusu, kasi mpo na lelo, osengeli te kosala yango, pamba te moto oyo akufi azali mwana ya mokonzi. \p \v 21 Bongo Joabi alobaki na moto moko ya Kushi : \pi1 — Kende koloba na mokonzi makambo oyo omoni. \p Moto ya Kushi agumbamaki liboso ya Joabi mpe akendeki mbangu. \p \v 22 Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki, alobaki lisusu na Joabi : \pi1 — Oyo ekoya eya ! Pesa ngai nzela mpo ete nakende mbangu liboso ya moto ya Kushi. \p Kasi Joabi azongisaki : \pi1 — Mwana na ngai ya mobali, mpo na nini olingi kaka kokende ? Ezali na yango te sango oyo ekopesa yo lifuti. \p \v 23 Ayimaatsi alobaki : \pi1 — Oyo ekoya eya ! Nandimi kokima mbangu. \p Joabi alobaki : \pi1 — Kima mbangu ! \p Boye Ayimaatsi akimaki mbangu na nzela ya etando ya Yordani mpe alekaki moto ya Kushi. \p \v 24 Na tango yango, Davidi avandaki kati ya ekuke ya kati mpe ekuke ya libanda, mpe mokengeli amataki na likolo ya ndako ya ekuke, pembeni ya mir. Tango atombolaki miso, amonaki mwana mobali moko kokima mbangu ye moko. \v 25 Mokengeli agangaki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye. Mokonzi alobaki : « Soki azali ye moko, wana azali na basango malamu. » \p Moto azalaki kaka kopusana. \v 26 Bongo mokengeli amonaki moto mosusu kokima mbangu, mpe abelelaki mokengeli ekuke : \pi1 — Tala, moto mosusu azali kokima mbangu ye moko. \p Mokonzi alobaki : \pi1 — Ye mpe amemi basango malamu. \p \v 27 Mokengeli alobaki : \pi1 — Namoni moto ya liboso kokima mbangu lokola Ayimaatsi, mwana mobali ya Tsadoki. \p Mokonzi alobaki : \pi1 — Azali moto malamu, azali koya na basango malamu. \p \v 28 Bongo Ayimaatsi abelelaki mokonzi : \pi1 — Makambo nyonso ezali malamu ! \p Agumbamaki liboso ya mokonzi elongi kino na mabele mpe alobaki : \pi1 — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ! Akabi bato oyo batombolaki maboko na bango mpo na kobundisa mokonzi, nkolo na ngai. \p \v 29 Mokonzi atunaki : \pi1 — Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu ? \p Ayimaatsi azongisaki : \pi1 — Namonaki mobulu makasi kaka tango Joabi alingaki kotinda mosali ya mokonzi mpe ngai, mosali na yo, kasi nayebaki te soki ezalaki likambo nini. \p \v 30 Mokonzi alobaki : \pi1 — Telema pembeni mpe zela ngai wana. \p Boye akendeki mpe atelemaki wana. \p \v 31 Bongo moto ya Kushi akomaki mpe alobaki : \pi1 — Mokonzi, nkolo na ngai, yoka basango malamu ! Yawe akangoli yo lelo na maboko ya bato oyo babundisaki yo. \p \v 32 Mokonzi atunaki na moto ya Kushi : \pi1 — Boni elenge mobali Abisalomi, azali malamu ? \p Moto ya Kushi azongisaki : \pi1 — Tika ete banguna ya mokonzi, nkolo na ngai, mpe bato nyonso oyo bazali kotelema mpo na kosala yo mabe bazala lokola elenge mobali wana. \s1 Davidi alelaki Abisalomi \p \v 33 Mokonzi ayokaki pasi na motema, amataki na shambre oyo ezalaki na likolo ya ekuke mpe alelaki. Tango azalaki kokende, alobaki : « Ah Abisalomi, mwana na ngai ya mobali ! Mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali Abisalomi ! Ebongaki ete nakufa na esika na yo ! Oh Abisalomi, mwana na ngai ya mobali, mwana na ngai ya mobali ! » \c 19 \p \v 1 Sango ekomelaki Joabi na koloba : « Mokonzi azali kolela mpe asali matanga mpo na Abisalomi. » \p \v 2 Mokolo wana, elonga ebongwanaki matanga mpo na bato nyonso, pamba te bato bayokaki na mokolo wana sango koloba : « Mokonzi azali na mawa makasi mpo na mwana na ye ya mobali. » \v 3 Na mokolo wana kaka, bato bazongaki na nkuku kati na engumba lokola mampinga oyo bazali koyoka soni mpo ete bakimi na bitumba. \v 4 Mokonzi azipaki elongi mpe alelaki makasi : « Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi ! Oh mwana na ngai ya mobali, Abisalomi ! Mwana na ngai ya mobali ! » \p \v 5 Joabi akendeki kokuta mokonzi kati na ndako mpe alobaki na ye : « Lelo, oyokisi bato na yo nyonso soni, bato oyo bawuti kobikisa bomoi na yo, bomoi ya bana na yo ya mibali mpe ya basi, bomoi ya basi na yo mpe bomoi ya bamakangu na yo. \v 6 Olingaka bato oyo bayinaka yo mpe oyinaka bato oyo balingaka yo. Lelo penza, otalisi yango polele ete bakonzi ya basoda mpe basoda na bango bazali pamba na miso na yo. Namoni ete olingaki kosepela lelo soki Abisalomi azalaki na bomoi mpe soki biso nyonso tokufaki. \v 7 Sik’oyo, bima mpe pesa longonya na basoda na yo. Nalapi ndayi na Kombo na Yawe ete soki obimi te, soda moko te akotikala elongo na yo kino butu eya. Ekozala mpo na yo pasi, koleka makama nyonso oyo ekweyela yo wuta na bolenge na yo kino lelo. » \p \v 8 Boye mokonzi atelemaki mpe avandaki na ekuke. Bongo tango bayebisaki basoda ete mokonzi avandi na ekuke, bango nyonso bayaki pene na ye. \s1 Davidi azongi na Yelusalemi \p Mpe na tango wana, bana ya Isalaele bakimaki moto na moto na ndako na ye. \v 9 Kati na bikolo ya Isalaele, bato bazalaki kotiana tembe mpe koloba : « Mokonzi oyo akangolaki biso na maboko ya banguna na biso, bato ya Filisitia, ye nde sik’oyo akimi mokili likolo ya Abisalomi ; \v 10 mpe Abisalomi oyo topakolaki mafuta mpo ete akamba biso asili kokufa na bitumba. Boye mpo na nini bozali koloba eloko te mpo na kozongisa mokonzi na Yelusalemi ? » \p \v 11 Mokonzi Davidi atindaki sango epai ya Banganga-Nzambe Tsadoki mpe Abiatari : « Botuna na bampaka ya Yuda : mpo na nini bosengeli kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi na ndako na ye, pamba te makambo oyo ezali kolobama kati na Isalaele mobimba esili kokoma na matoyi ya mokonzi ? \v 12 Bozali bandeko na ngai ya mibali, nzoto na ngai mpe makila na ngai. Bongo mpo na nini kozala bato ya suka mpo na kozongisa mokonzi ? \v 13 Mpe boloba na Amasa : ‹ Ozali mosuni na ngai mpe makila na ngai te ? Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi ndenge alingi soki banda sik’oyo okomi te mokonzi ya mampinga na ngai na esika ya Joabi mpo na libela. › » \p \v 14 Makambo oyo Davidi alobaki ekotaki na mitema ya bato nyonso ya Yuda lokola moto moko. Boye batindaki maloba epai ya mokonzi mpo na koloba na ye : « Zonga, yo elongo na basali na yo nyonso. » \p \v 15 Mokonzi azongaki mpe akomaki kino na Yordani. Bato ya Yuda bayaki na Giligali mpo na kokende kokutana na mokonzi mpe kokatisa ye mayi ya Yordani. \s1 Davidi alimbisi Shimei \p \v 16 Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya ekolo ya Benjame ya Bawurimi, akendeki mbangu elongo na bato ya Yuda mpo na kokutana na mokonzi Davidi. \v 17 Azalaki elongo na bato ya Benjame, nkoto moko, mpe Tsiba, moto oyo azalaki kosala kati na libota ya Saulo, elongo na bana na ye ya mibali zomi na mitano mpe basali na ye, tuku mibale. Bakendeki mbangu na Yordani epai wapi mokonzi azalaki. \v 18 Bamataki na bwato mpo na kokatisa libota ya mokonzi mpe mpo na kosala nyonso oyo ezali malamu na miso ya mokonzi. Tango Shimei, mwana mobali ya Gera, akatisaki Yordani, akweyaki liboso ya mokonzi \v 19 mpe alobaki na ye : « Tika ete nkolo na ngai atangela ngai ngambo te, akanisa te mabe oyo mosali na ye asalaki mokolo oyo mokonzi, nkolo na ngai, alongwaki na Yelusalemi. Tika ete mokonzi alongola likambo yango na makanisi na ye. \v 20 Pamba te ngai, mosali na yo, nayebi ete nasalaki masumu, mpe lelo nayei awa lokola moto ya liboso kati na libota mobimba ya Jozefi mpo na kokutana na mokonzi, nkolo na ngai. » \p \v 21 Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, alobaki : \pi1 — Boni, Shimei asengelaki te kokufa mpo na likambo oyo, pamba te alakelaki mabe mopakolami na Yawe ? \p \v 22 Davidi azongisaki : \pi1 — Likambo nini kati na ngai mpe bino bana mibali ya Tseruya ? Bokomi lelo banguna na ngai ! Boni, basengeli koboma moto moko lelo kati na Isalaele ? Nayebi te ete ngai nde nazali lelo mokonzi ya Isalaele ? \p \v 23 Bongo mokonzi alobaki na Shimei : \pi1 — Okokufa te. \p Mpe mokonzi alakaki Shimei na nzela ya ndayi. \s1 Mefibosheti \p \v 24 Mefibosheti, koko ya Saulo, akendeki mpe kokutana na mokonzi. Banda mokolo oyo mokonzi abimaki kino azongaki, Mefibosheti atikalaki kosukola makolo na ye te, akataki mandefu te mpe asukolaki bilamba na ye te. \v 25 Tango akomaki na Yelusalemi mpo na kokutana na mokonzi, Davidi atunaki ye : \pi1 — Mefibosheti, mpo na nini okendeki te elongo na ngai ? \p \v 26 Mefibosheti azongisaki : \pi1 — Mokonzi, nkolo na ngai, mosali na ngai akosaki ngai. Pamba te lokola ngai, mosali na yo, nazali na mbeba na makolo, namilobelaki : « Nakosenga ete babongisela ngai ane na ngai, mpe nakomata yango mpo ete nakende elongo na mokonzi. » \v 27 Kasi Tsiba, mosali na ngai, akosaki ngai. Akoselaki mosali na yo makambo epai ya mokonzi, nkolo na ngai. Mokonzi, nkolo na ngai, azali lokola Anjelu na Nzambe. Boye sala sik’oyo makambo oyo omoni ete ezali malamu. \v 28 Pamba te na makanisi ya mokonzi, nkolo na ngai, esengelaki koboma bato nyonso ya libota ya koko na ngai, Saulo ; kasi atako bongo, ondimaki mosali na yo na mesa, kati na bato oyo bazali kolia elongo na yo. Boye makoki nini nakoki lisusu kozala na yango ya kosenga eloko epai ya mokonzi ? \p \v 29 Mokonzi alobaki na ye : \pi1 — Mpo na nini maloba ebele boye ? Nasili kopesa mitindo ete yo mpe Tsiba bokabola bilanga. \p \v 30 Mefibosheti alobaki na ye : \pi1 — Lokola mokonzi, nkolo na ngai, azongi mobimba na ndako na ye, tika ete akamata na ye ata nyonso. \s1 Davidi afuti Barizilayi \p \v 31 Barizilayi, moto ya Galadi, awutaki na Rogelimi mpo na kokatisa ebale Yordani elongo na mokonzi mpe kotika ye kokoba mobembo na ye. \v 32 Nzokande, Barizilayi akomaki mobange, azalaki na mibu tuku mwambe, mpe ezalaki ye nde asungaki mokonzi na mikolo nyonso oyo mokonzi avandaki na Maanayimi, pamba te azalaki moto ya bozwi mingi. \v 33 Mokonzi alobaki na Barizilayi : \pi1 — Katisa elongo na ngai mpe vanda epai na ngai na Yelusalemi, mpe ngai nakosunga yo. \p \v 34 Kasi Barizilayi azongiselaki mokonzi : \pi1 — Natikali na mibu boni mpo ete nakende elongo na mokonzi na Yelusalemi ? \v 35 Nazali sik’oyo na mibu tuku mwambe. Boni, nakoki na ngai lisusu kokesenisa malamu mpe mabe ? Mosali na yo akoki koyoka lisusu elengi ya biloko oyo azali kolia mpe komela ? Nakoki lisusu koyoka mongongo ya bayembi ya mibali mpe ya basi ? Bongo mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, akoki lisusu komitungisa mpo na mosali na yo ? \v 36 Mosali na yo akokatisa Yordani elongo na mokonzi mpo na mwa tango moke kaka. Kasi mpo na nini mokonzi akoki kopesa ngai lifuti ya boye ? \v 37 Nabondeli yo, tika ete mosali na yo azonga mpo na kokufa na engumba na ngai pene ya kunda ya tata mpe mama na ngai ! Kasi tala mwana na ngai ya mobali, mosali na yo, Kimeami. Tika ete akende elongo na mokonzi, nkolo na ngai, mpe salela ye makambo oyo yo omoni ete ezali malamu. \p \v 38 Mokonzi azongisaki : \pi1 — Tika ete Kimeami akende elongo na ngai, mpe ngai nakosalela ye makambo oyo ezali malamu na miso na yo. Nakosalela ye nyonso oyo akosenga ngai. \p \v 39 Sima na bato nyonso kokatisa ebale Yordani, mokonzi mpe akatisaki. Bongo mokonzi apesaki Barizilayi beze mpe apambolaki ye. Mpe Barizilayi azongaki na ndako na ye. \s1 Bokabwani kati na Yuda mpe Isalaele \p \v 40 Tango mokonzi akatisaki na Giligali, Kimeami mpe akatisaki elongo na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ndambo ya mabota ya Isalaele balekisaki mokonzi. \v 41 Kasi na mbala moko, bato nyonso ya Isalaele bayaki epai ya mokonzi mpe balobaki na ye : \pi1 — Mpo na nini bandeko na biso, bato ya Yuda, bazwaki yo na kobombama ? Mpo na nini balekisaki mokonzi na ebale Yordani, elongo na libota na ye mpe bato nyonso ya Davidi elongo na ye ? \p \v 42 Bato nyonso ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele : \pi1 — Tosalaki bongo, pamba te mokonzi azali ndeko na biso ya mosika te. Bongo mpo na nini kosilika na tina na yango ? Boni, tobikaki bomoi na biso mpo na mokonzi ? Tozwaki ata eloko moko mpo na biso ? \p \v 43 Bato ya Isalaele bazongiselaki bato ya Yuda : \pi1 — Tozali na makoki kati na mokonzi koleka mbala zomi, mpe biso nde tozali na makoki mingi koleka bino na tina na Davidi. Mpo na nini bozali komona biso lokola bato pamba. Tozalaki bato ya liboso te na koluka ndenge nini kozongisa mokonzi na biso ? \p Kasi bato ya Yuda bazongiselaki bato ya Isalaele na maloba makasi. \c 20 \s1 Sheba atombokeli Davidi \p \v 1 Moto moko ya mobulu na kombo Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya ekolo ya Benjame, abetaki kelelo mpe agangaki : « Tozali na eteni ata moko te ya lisanga na Davidi, tozali ata na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi. Isalaele, tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye ya kapo. » \p \v 2 Bato nyonso ya Isalaele bakimaki Davidi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri. Kasi bato ya Yuda batikalaki pembeni ya mokonzi na bango, na nzela mobimba, longwa na Yordani kino na Yelusalemi. \p \v 3 Tango mokonzi Davidi azongaki na ndako na ye, na Yelusalemi, azwaki bamakangu na ye zomi oyo atikaki mpo na kokengela ndako, mpe atiaki bango kati na ndako moko oyo bazalaki kokengela malamu. Atako azalaki kosunga bango, kasi akendeki te kosangisa na bango nzoto. Bazalaki kokengela bango kino na mokolo na bango ya kufa, mpe bazalaki lokola basi bakufisa mibali. \p \v 4 Mokonzi alobaki na Amasa : « Bengela ngai bato nyonso ya Yuda na mikolo misato, yo moko mpe zala awa. » \p \v 5 Kasi tango Amasa akendeki kobenga bato ya Yuda, azwaki tango molayi koleka oyo mokonzi apesaki ye. \v 6 Davidi ayebisaki Abishayi : « Sheba, mwana mobali ya Bikiri, akomonisa biso pasi mingi koleka Abisalomi. Kamata basali ya mokonzi mpe landa ye, noki te akomona bingumba batonga makasi mpe akokima biso. » \p \v 7 Boye na bokambami ya Abishayi, bato ya Joabi, bato ya Kereti, bato ya Peleti mpe basoda nyonso ya mpiko, babimaki na Yelusalemi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri. \p \v 8 Tango bakomaki na libanga monene kati na Gabaoni, Amasa ayaki kokutana na bango. Joabi alataki bilamba na ye ya basoda : na loketo na ye, alataki mokaba oyo kati na yango atiaki mopanga oyo ezalaki kati na ebombelo na yango na loketo. Bongo tango abandaki kopusana, mopanga yango ekweyaki. \p \v 9 Joabi alobaki na Amasa : « Boni ndeko na ngai ya mobali, ozali malamu ? » \p Bongo Joabi asalelaki loboko na ye ya mobali mpo na kosimba Amasa na mandefu mpe kopesa ye beze. \v 10 Amasa azalaki na bokebi te mpo na kotala mopanga oyo ezalaki na loboko ya mwasi ya Joabi. Bongo Joabi atobolaki ye libumu, mpe misopo na ye nyonso epanzanaki kino na se ; mpe Amasa akufaki mbala moko. Joabi azalaki te na tina na kotuba ye mopanga na mbala ya mibale. Boye Joabi mpe ndeko na ye ya mobali, Abishayi, balandaki Sheba, mwana mobali ya Bikiri. \p \v 11 Moto moko kati na bato ya Joabi atelemaki pembeni ya Amasa mpe alobaki : « Tika ete bato nyonso oyo bazali mpo na Joabi mpe mpo na Davidi balanda Joabi ! » \p \v 12 Nzokande, wana Amasa azalaki kobaluka kati na makila na ye na kati-kati ya nzela, moto yango amonaki ete mampinga nyonso bayaki kotelema wana. Boye abendaki Amasa libanda ya nzela, atandaki ye kati na elanga mpe afinikaki ye elamba. \v 13 Sima na ye kolongola Amasa na nzela, bato nyonso bakendeki elongo na Joabi mpo na kolanda Sheba, mwana mobali ya Bikiri. \p \v 14 Mpo na kokoma na Abele-Beti-Maaka, Sheba akatisaki bikolo nyonso ya Isalaele mpe etuka mobimba ya bato ya Berimi oyo mpe basanganaki mpe balandaki Joabi. \v 15 Joabi elongo na mampinga na ye nyonso bazingelaki Sheba kati na Abele-Beti-Maaka mpe batongaki na libanda ya engumba mwa ngomba oyo ekomaki na molayi ya mir. Tango bazalaki kotimola mabele mpo na koluka kokweyisa mir, \v 16 mwasi moko ya bwanya agangaki wuta na engumba : « Boyoka ! Boyoka ! Boyebisa Joabi ete aya awa mpo ete naloba na ye. » \p \v 17 Joabi apusanaki pene na ye, mpe mwasi yango atunaki ye : \pi1 — Yo nde Joabi ? \p Azongisaki : \pi1 — Iyo, ezali ngai. \p Mwasi alobaki : \pi1 — Yoka makambo oyo mwasi mosali na yo azali koloba. \p Joabi azongisaki : \pi1 — Nazali koyoka. \p \v 18 Mwasi yango akobaki koloba : \pi1 — Na kala, bazalaki na ezaleli ya koloba : « Botuna mayele na mboka Abele, » mpe likambo esili. \v 19 Tozali bato ya kimia mpe ya sembo kati na Isalaele. Kasi yo ozali koluka koboma engumba oyo ezali mama kati na Isalaele ! Mpo na nini olingi kobebisa libula ya Yawe ? \p \v 20 Joabi azongisaki : \pi1 — Mosika na ngai ! Mosika na ngai likanisi ya kobebisa to koboma ! \v 21 Ezali bongo te. Kasi Sheba, mwana mobali ya Bikiri, moto ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, atombokelaki mokonzi Davidi. Kaba ye, ye moko kaka, mpe nakotika kozingela engumba. \p Mwasi yango alobaki na Joabi : \pi1 — Bakobwakela yo moto na ye na likolo ya mir. \p \v 22 Bongo mwasi akendeki epai ya bato nyonso mpe ayebisaki bango maloba na ye ya bwanya. Boye bakataki moto ya Sheba, mwana mobali ya Bikiri, mpe babwakelaki yango Joabi. Bongo Joabi abetaki kelelo, mpe bato na ye bapanzanaki liboso ya engumba ; moto na moto azongaki na ndako na ye. Joabi mpe azongaki na Yelusalemi epai ya mokonzi. \s1 Bakalaka ya Davidi \p \v 23 Joabi azalaki kokamba mampinga nyonso ya Isalaele ; Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki kokamba bato ya Kereti mpe bato ya Peleti. \v 24 Adorami azalaki kokamba misala makasi ; Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda ; \v 25 Sheva azalaki mokomi mikanda ; Tsadoki mpe Abiatari bazalaki Banganga-Nzambe ; \v 26 mpe Ira, moto ya Yairi, azalaki Nganga-Nzambe ya Davidi. \c 21 \ms1 Mibu ya suka ya bokonzi ya Davidi \s1 Mibu misato ya nzala makasi \p \v 1 Tango Davidi azalaki mokonzi, nzala makasi ekotaki mpe esalaki mibu misato. Davidi atunaki Yawe, mpe Yawe alobaki na ye : « Ezali mpo na Saulo mpe libota na ye oyo esopaki makila, pamba te babomaki bato ya Gabaoni. » \p \v 2 Mokonzi abengisaki bato ya Gabaoni mpo na kosolola na bango. Nzokande bato ya Gabaoni bazalaki kotangama te kati na bato ya Isalaele, kasi bakanganaki na batikali kati na bato ya Amori ; bongo bato ya Isalaele bakanganaki na bato ya Amori, na nzela ya ndayi, mpo na kotika bango na bomoi. Kasi Saulo, na bolingo na ye oyo eleka ndelo mpo na Isalaele mpe Yuda, alukaki kosilisa koboma bango. \p \v 3 Davidi atunaki bato ya Gabaoni : \pi1 — Eloko nini nakoki kosala mpo na bino ? Na mabe oyo basalaki bino, ndenge nini nakoki kobongisa makambo mpo ete bopambola libula na Yawe ? \p \v 4 Bato ya Gabaoni bazongiselaki ye : \pi1 — Mpo na kobongisa makambo na biso elongo na Saulo mpe libota na ye, tozali na posa te ya palata to ya wolo ; tokoki mpe te koboma ata moto moko kati na Isalaele. \p Davidi atunaki lisusu : \pi1 — Bolingi ete ngai nasala nini mpo na bino ? \p \v 5 Bazongiselaki mokonzi : \pi1 — Lokola tata wana alingaki kosilisa koboma biso mpe asalaki mabongisi ya kobebisa biso mpo ete tolimwa kati na mokili mobimba ya Isalaele, \v 6 tika ete mokonzi akaba na maboko na biso mibali sambo kati na bakitani ya Saulo mpo ete todiembika banzoto na bango liboso ya Yawe, na Gibea, engumba ya Saulo, moponami na Yawe. \p Mokonzi alobaki : \pi1 — Nakopesa bino bango. \p \v 7 Mokonzi atikaki na bomoi Mefibosheti, mwana mobali ya Jonatan, mwana mobali ya Saulo, mpo na boyokani oyo ezalaki kati na bango mibale, Davidi mpe Jonatan, mwana mobali ya Saulo, tango Davidi alapaki ndayi na Kombo na Yawe. \v 8 Kasi mokonzi akangaki Arimoni mpe Mefibosheti, bana mibali oyo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, abotelaki Saulo ; akangaki lisusu bana mibali mitano oyo Mikali, mwana mwasi ya Saulo, abotelaki Adriyeli, mwana mobali ya Barizilayi, moto ya Meola ; \v 9 akabaki bango na maboko ya bato ya Gabaoni. Bongo bato ya Gabaoni babomaki bango mpe badiembikaki banzoto na bango na ngomba liboso ya Yawe. Bango nyonso sambo bakufaki elongo. Babomaki bango na mikolo ya liboso ya tango ya kobuka bambuma, kaka na ebandeli ya tango oyo babukaki bambuma ya orje. \v 10 Bongo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, alongolaki elamba ya saki oyo alataki mpe atandaki yango na libanga ; avandaki wana, wuta na ebandeli ya tango ya kobuka bambuma ya orje kino na eleko oyo mvula enokelaki bibembe. Na moyi, apekisaki bandeke ya likolo kokita na likolo ya bibembe yango ; mpe na butu, abenganaki banyama ya zamba. \v 11 Davidi ayokaki makambo oyo Ritsipa, mwana mwasi ya Aya, makangu ya Saulo, asalaki. \p \v 12 Bongo Davidi akendeki kozwa mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali, epai ya bakambi ya Yabeshi ya Galadi, oyo bayibaki yango na libanda ya Beti-Sheani epai wapi bato ya Filisitia badiembikaki yango mokolo oyo babomaki Saulo, na Giliboa. \v 13 Wuta kuna, Davidi amemaki mikuwa ya Saulo mpe ya Jonatan, mwana na ye ya mobali ; asangisaki mpe mikuwa ya bato sambo oyo babomaki mpe badiembikaki. \v 14 Bakundaki mikuwa ya Saulo mpe ya mwana na ye ya mobali, Jonatan, kati na kunda ya Kishi, tata ya Saulo, na Tsela kati na etuka ya Benjame. Basalaki makambo nyonso oyo mokonzi atindaki. Sima na yango, Nzambe ayanolaki losambo mpo na mokili ya Isalaele. \s1 Davidi abundisi bato ya Filisitia \r (1Ma 20.4-8) \p \v 15 Bitumba ezalaki lisusu kati ya bato ya Filisitia mpe bato ya Isalaele. Davidi akitaki elongo na basoda na ye mpo na kobundisa bato ya Filisitia ; mpe Davidi alembaki. \v 16 Yishibi-Benobi, mokitani ya Rafa, azalaki na mopanga ya sika, likonga oyo songe na yango ezalaki ya bronze mpe ezalaki ya bakilo koleka misato ; mpe abetaki tolo ete akoboma Davidi. \v 17 Kasi Abishayi, mwana mobali ya Tseruya, ayaki kosunga Davidi, abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye. Boye bato ya Davidi bakataki seleka epai ya mokonzi, balobaki : « Okobima lisusu te elongo na biso na bitumba mpo ete mwinda ya Isalaele ekufa te. » \p \v 18 Sima na mwa tango, ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na mboka Gobi. Ezalaki na tango yango nde Sibekayi, moto ya Usha, abomaki Safi, moko kati na bakitani ya Rafa. \p \v 19 Ezalaki lisusu na bitumba na bato ya Filisitia, kuna na Gobi ; mpe Elanani, mwana mobali ya Yare-Oregimi, moto ya Beteleemi, abomaki Goliati, moto ya Gati, oyo nzete ya likonga na ye ezalaki monene lokola libaya oyo basali bilamba na maboko basalelaka. \p \v 20 Ezalaki lisusu na bitumba oyo esalemaki kuna na Gati ; mpe ezalaki kuna na mbinga mobali moko, mokitani ya Rafa, oyo azalaki na misapi motoba na loboko moko na moko, mpe misapi motoba na lokolo moko na moko. Na kosangisa, azalaki na misapi tuku mibale na minei. \v 21 Atiolaki Isalaele ; mpe Jonatan, mwana mobali ya Shimea mpe ndeko mobali ya Davidi, abomaki ye. \p \v 22 Bango minei bazalaki bakitani ya Rafa, babotama na Gati mpe bakufaki liboso ya Davidi mpe ya basoda na ye. \c 22 \s1 Nzembo ya Davidi \p \v 1 Davidi ayembelaki Yawe nzembo na maloba oyo, tango Yawe akangolaki ye wuta na maboko ya banguna na ye nyonso mpe na loboko ya Saulo. \v 2 Alobaki : \q1 Yawe azali libanga na ngai, \q2 ndako na ngai ya makasi mpe mokangoli na ngai ; \q1 \v 3 azali Nzambe na ngai, libanga na ngai \q2 mpe ebombamelo na ngai ; \q1 azali nguba na ngai, nguya oyo ebikisaka ngai, \q2 ekimelo na ngai, mpe Mobikisi na ngai. \q2 Okangolaka ngai wuta na maboko ya bato mabe. \q1 \v 4 Nabelelaki Yawe oyo abongi na lokumu, \q2 mpe nakangolamaki wuta na maboko ya banguna na ngai. \q1 \v 5 Mbonge ya kufa efinaki ngai, \q2 mpela ya libebi epesaki ngai somo, \q1 \v 6 basinga ya mboka ya bakufi elingaki ngai, \q2 mitambo ya kufa ekangaki ngai. \q1 \v 7 Kati na pasi na ngai, nabelelaki Yawe, \q2 nagangaki epai ya Nzambe na ngai mpo ete asunga ngai. \q1 Yawe ayokaki mongongo na ngai wuta na Tempelo na Ye, \q2 koganga na ngai mpo na kosenga lisungi \q2 ekomaki kino na matoyi na Ye. \b \q1 \v 8 Mabele ekomaki koningana makasi, \q2 miboko ya Lola elengaki mpe ebukanaki, \q2 pamba te Yawe asilikaki. \q1 \v 9 Milinga ekomaki kobima na zolo na Ye, \q2 moto makasi elongo na makala ya moto ekomaki kobima na monoko na Ye. \q1 \v 10 Afungolaki Lola mpe akitaki, \q2 mapata ya mwindo ezalaki na se ya matambe na Ye. \q1 \v 11 Amataki na likolo ya Sheribe mpe apumbwaki, \q2 apepaki na mapapu ya mopepe. \q1 \v 12 Akomisaki molili oyo ezingelaki Ye \q2 mpe mapata ya mwindo ya likolo, Ndako na Ye. \q1 \v 13 Kongenga oyo ezalaki liboso na Ye \q2 ezalaki kobimisa makala ya moto. \q1 \v 14 Yawe agangaki wuta na Lola, \q2 mongongo ya Ye-Oyo-Aleki-Likolo eyokanaki. \q1 \v 15 Abwakaki makonga na Ye, \q2 mpe atindaki yango na bangambo nyonso ; \q2 abakisaki motango ya mikalikali mpo na kopalanganisa yango. \q1 \v 16 Na koganga ya Yawe mpe na pema ya zolo na Ye, \q2 nzela oyo mayi ya ebale elekelaka ebimaki, \q2 mpe miboko ya mokili emonanaki na libanda. \b \q1 \v 17 Atandaki loboko na Ye wuta na likolo, \q2 akamataki ngai mpe abimisaki ngai na likama \q2 oyo nazalaki na yango kati na mayi ya mozindo makasi. \q1 \v 18 Akangolaki ngai wuta na maboko \q2 ya monguna na ngai ya nguya mpe ya bayini na ngai, \q2 pamba te balekaki ngai na makasi. \q1 \v 19 Babundisaki ngai na mokolo oyo pasi ezalaki kokanga ngai, \q2 kasi Yawe azalaki eyekamelo na ngai. \q1 \v 20 Abimisaki ngai mpo na kokomisa ngai nsomi, \q2 akangolaki ngai, pamba te alingaka ngai. \b \q1 \v 21 Yawe asalelaki ngai makambo wana \q2 kolanda bosembo na ngai, \q2 afutaki ngai kolanda bopeto ya maboko na ngai. \q1 \v 22 Pamba te nabateli banzela ya Yawe, \q2 napesi Nzambe na ngai mokongo te lokola bato mabe. \q1 \v 23 Natosaka mibeko na Ye nyonso \q2 mpe nabatelaka bikateli na Ye. \q1 \v 24 Epai na Ye, nazalaki moto oyo azangi pamela \q2 mpe namibatelaki mpo ete nasala masumu te. \q1 \v 25 Yawe afuti ngai kolanda bosembo na ngai, \q2 kolanda bopeto na ngai na miso na Ye. \b \q1 \v 26 Solo, otalisaka bosembo na Yo epai ya moto oyo atambolaka na bosembo, \q2 mpe bolamu na Yo, epai ya moto oyo azangi pamela. \q1 \v 27 Otalisaka bopeto na Yo epai ya moto ya peto, \q2 kasi omibombaka liboso ya moto oyo atambolaka nyoka-nyoka. \q1 \v 28 Obikisaka banyokolami, \q2 otalaka mpe okitisaka bato na lofundu. \q1 \v 29 Oh Yawe, ozali mwinda na ngai ; \q2 obongolaka molili na ngai pole. \q1 \v 30 Elongo na Yo, nabundisaka mampinga oyo elati bibundeli ; \q2 mpe na lisungi ya Nzambe na ngai, nakatisaka bamir. \q1 \v 31 Nzela ya Nzambe ezali ya kokoka, \q2 Liloba na Yawe ezali na mbeba te ; \q1 azali nguba mpo na bato nyonso oyo bazwaka Ye \q2 lokola ebombamelo na bango. \q1 \v 32 Nani azali Nzambe soki Yawe te ? \q2 Nani azali libanga soki Nzambe na biso te ? \q1 \v 33 Ezali Nzambe nde azali ndako na ngai ya makasi, \q2 abatelaka nzela na ngai \q2 mpe akomisaka yango polele liboso na ngai ; \q1 \v 34 akomisaka makolo na ngai lokola ya mboloko \q2 mpe avandisaka ngai na bisika ya likolo ; \q1 \v 35 alakisaka ngai kobunda, \q2 mpe maboko na ngai ekoki kobenda tolotolo ya bronze. \q1 \v 36 Okomisaka lobiko na Yo nguba na ngai, \q2 mpe lisungi na Yo ekomisaka ngai makasi. \q1 \v 37 Otambolisaka ngai na kimia, \q2 mpe makolo na ngai elengaka te. \q1 \v 38 Nalandaka banguna na ngai mpe nabomaka bango, \q2 nazongaka kaka soki nasilisi koboma bango. \q1 \v 39 Nabebisaka bango nye, \q2 mpe bakokaka lisusu kotelema te ; \q2 bakweyaka na se ya matambe na ngai. \q1 \v 40 Opesaka ngai makasi ya bitumba, \q2 ogumbaka banguna na ngai \q2 mpe otiaka bango na se ya matambe na ngai. \q1 \v 41 Okimisaka banguna na ngai mosika na ngai, \q2 mpe nabebisaka bayini na ngai. \q1 \v 42 Bagangaka mpo na koluka lisungi, \q2 kasi moto oyo akokaki kobikisa bango azalaka te ; \q2 babelelaka Yawe, kasi ayanolaka bango te. \q1 \v 43 Nanikaka bango lokola putulu ya mabele, \q2 nafinaka bango, nanyataka bango \q2 lokola potopoto ya nzela. \b \q1 \v 44 Olongisaka ngai na bitumba ya bato, \q2 obatelaka ngai mpo ete nazala mokambi ya bikolo. \q2 Bato oyo nayebaki te bakomi kosalela ngai. \q1 \v 45 Bapaya bazali koya mpo ete nasepela na bango ; \q2 soki kaka bayoki ngai, batosaka ngai. \q1 \v 46 Bango nyonso balembi nzoto \q2 mpe bakomi kobima na kolenga \q2 wuta na bandako na bango ya makasi. \q1 \v 47 Longonya na Yawe ! \q2 Tika ete Ye oyo azali libanga na ngai akumisama ! \q2 Tika ete Nzambe, libanga ya lobiko na ngai, anetolama ! \q1 \v 48 Azali Nzambe oyo abundelaka ngai, \q2 oyo atiaka bikolo na se ya matambe na ngai, \q1 \v 49 akangolaka ngai wuta na maboko ya banguna na ngai. \q2 Olongisaka ngai liboso ya banguna na ngai, \q2 obikisaka ngai na maboko ya banguna na ngai. \q1 \v 50 Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo, \q2 nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo. \q1 \v 51 Yawe apesaka elonga monene epai ya mokonzi na Ye, \q2 atalisaka bolingo na Ye epai ya mopakolami na Ye, \q2 epai ya Davidi mpe libota na ye mpo na libela. \c 23 \s1 Maloba ya suka \p \v 1 Tala maloba ya suka ya Davidi : \q1 Maloba ya Davidi, mwana mobali ya Izayi, \q2 moto oyo atombolama na bokonzi, \q1 mopakolami ya Nzambe ya Jakobi, \q2 moyembi malamu ya banzembo ya Isalaele : \q1 \v 2 « Molimo na Yawe alobi na nzela na ngai, \q2 atie maloba na Ye na monoko na ngai. \q1 \v 3 Nzambe oyo azali Libanga ya Isalaele ayebisi ngai : \q2 ‹ Mokonzi oyo akambaka bato kati na bosembo mpe botosi epai ya Nzambe, \q1 \v 4 azali lokola pole ya tongo, tango moyi ebimaka \q2 mpe engalaka makasi lokola nde mapata ezali te, \q1 lokola kongenga ya sima na mvula \q2 oyo ebimisaka matiti na mokili. › \q1 \v 5 Ezali bongo te mpo na libota na ngai liboso ya Nzambe, \q2 pamba te asalaki boyokani ya libela elongo na ngai, \q1 boyokani oyo esalema malamu na makambo nyonso, \q2 mpe oyo Ye moko abatelaka ? \q1 Tango nyonso mpe na makambo nyonso, apesaki ngai elonga \q2 mpe akokisaki posa ya motema na ngai. \q1 \v 6 Kasi bato nyonso ya kilikili bazali lokola nzete ya nzube \q2 oyo babwakaka mosika ; \q2 basimbaka yango te na maboko pamba. \q1 \v 7 Moto oyo alingi kosimba yango \q2 asengeli kosalela ebende to libaya ya likonga ; \q2 batumbaka yango kaka na esika oyo ezali. » \s1 Basoda ya mpiko ya Davidi \r (1Ma 11.10-41) \p \v 8 Tala bakombo ya basoda ya mpiko ya Davidi : Yoshebi-Bashebeti, moto ya Takimoni : azalaki mokonzi ya limpinga ya basoda misato ya mpiko, abomaki na likonga bato nkama mwambe na etumba moko. \p \v 9 Molandi na ye ezalaki Eleazari, mwana mobali ya Dodo, moto ya Aoyi : azalaki moko kati na limpinga ya basoda misato ya mpiko oyo, elongo na Davidi, babundisaki bato ya Filisitia oyo basanganaki mpo na bitumba, wana bana ya Isalaele bazalaki kokima na likolo ya bangomba. \v 10 Kasi ye ayikaki mpiko kati na bitumba mpe abomaki bato ya Filisitia kino alembaki, mpe loboko na ye etikaki mopanga te. Yawe apesaki bango elonga monene na mokolo wana. Mampinga bazongaki epai ya Eleazari kaka mpo na kokamata biloko ya bato oyo bakufaki. \p \v 11 Sima na ye, Shama, mwana mobali ya Age, moto ya Arari. Tango bato ya Filisitia basanganaki na Leyi epai wapi ezalaki na elanga moko etonda na misili, basoda ya Isalaele bakimaki liboso na bango. \v 12 Kasi Shama atelemaki na kati-kati ya elanga, abundelaki yango mpe abomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene. \p \v 13 Mokolo moko, na ebandeli ya eleko ya kobuka bambuma, wana basoda ya bato ya Filisitia batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Refayimi, basoda misato kati na basoda tuku misato ya mpiko bayaki epai ya Davidi, na ebombamelo ya mabanga ya Adulami. \v 14 Na tango yango, Davidi azalaki kati na ebombamelo moko batonga makasi, mpe basoda ya Filisitia bazalaki na Beteleemi. \p \v 15 Mbala moko, Davidi ayokaki posa ya mayi mpe alobaki : « Nani akomemela ngai mayi ya libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpo ete namela ? » \p \v 16 Basoda nyonso misato ya mpiko bakotaki na mayele kati na molako ya bato ya Filisitia, batokaki mayi na libulu oyo ezali pene ya ekuke ya Beteleemi mpe bamemaki yango epai ya Davidi. Kasi Davidi aboyaki komela mayi yango ; asopaki yango na mabele lokola likabo ya masanga mpo na Yawe. \v 17 Alobaki : « Tika ete Yawe apesa ngai etumbu soki nameli mayi oyo, pamba te ezali lokola makila ya bato oyo bandimaki kokende kokufa mpo na ngai. » \p Boye, Davidi aboyaki komela mayi yango. Yango nde misala ya kokamwa oyo basoda misato ya mpiko basalaki. \p \v 18 Abishayi, ndeko mobali ya Joabi mpe mwana mobali ya Tseruya, azalaki mokonzi ya basoda misato ya mpiko. Abundisaki bato nkama misato na likonga na ye mpe abomaki bango. Boye, kati na bango misato, ye nde akendeki sango koleka. \v 19 Kati na basoda misato ya mpiko, ye nde azwaki lokumu koleka mpe akomaki mokonzi na bango, kasi akokanaki te na basoda misato ya limpinga ya liboso. \p \v 20 Benaya, moto ya mboka Kabitseli mpe mwana mobali ya Yeoyada, azalaki soda ya mpiko mpe asalaki makambo ebele ya kokamwa : abomaki bilombe mibale ya Moabi ; mpe na mokolo ya mvula ya pembe, akitaki na libulu moko ya mayi mpe abomaki kuna nkosi. \v 21 Ye mpe moto abomaki mbinga mobali moko ya Ejipito, oyo asimbaki likonga na loboko na ye. Abundisaki moto yango ya Ejipito na lingenda, abotolaki ye likonga oyo azalaki na yango na loboko mpe abomaki ye na likonga na ye moko. \v 22 Yango nde misala ya kokamwa oyo Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, asalaki. Ye mpe akendeki sango kati na basoda misato ya mpiko ya lisanga ya mibale. \v 23 Kati na basoda tuku misato ya mpiko, ye nde azalaki na lokumu monene koleka, kasi akokanaki te na basoda misato ya mpiko ya limpinga ya liboso. Mpe Davidi akomisaki ye mokonzi ya bakengeli na ye. \b \li4 \v 24 Kati na lisanga ya bato tuku misato, ezalaki mpe na : \li1 Asaeli, ndeko mobali ya Joabi ; \li1 Elanani, mwana mobali ya Dodo, moto ya Beteleemi ; \li1 \v 25 Shama mpe Elika, bato ya Arodi ; \li1 \v 26 Eletsi, moto ya Peleti ; \li1 Ira, mwana mobali ya Ikeshi, moto ya Tekoa ; \li1 \v 27 Abiezeri, moto ya Anatoti ; \li1 Mebunayi, moto ya Usha ; \li1 \v 28 Tsalimoni, moto ya Aoyi ; \li1 Maarayi, moto ya Netofa ; \li1 \v 29 Elebi, mwana mobali ya Baana, moto ya Netofa ; \li1 Itayi, mwana mobali ya Ribayi, moto ya Gibea ya libota ya Benjame ; \li1 \v 30 Benaya, moto ya Piratoni ; \li1 Idayi, moto ya mabwaku ya Gashi ; \li1 \v 31 Abi-Aliboni, moto ya Beti-Ariba ; \li1 Azimaveti, moto ya Baarumi ; \li1 \v 32 Eliaba, moto ya Shaaliboni ; \li1 Bana mibali ya Yasheni ; \li1 Jonatan, \v 33 Shama, moto ya Arari ; \li1 Ayami, mwana mobali ya Sharari, moto ya Arari ; \li1 \v 34 Elifeleti, mwana mobali ya Aasibayi, mwana mobali ya Maakati ; \li1 Eliami, mwana mobali ya Ayitofeli, moto ya Gilo ; \li1 \v 35 Etsirayi, moto ya Karimeli ; \li1 Paarayi, moto ya Arabi ; \li1 \v 36 Yigali, mwana mobali ya Natan, moto ya Tsoba ; \li1 Bani, moto ya Gadi\f + \fr 23.36 \fr*\ft Na mikanda mosusu, bakoma : Agri\ft*\f* ; \li1 \v 37 Tseleki, moto ya Amoni ; \li1 Naarayi, moto ya Beyeroti, oyo azalaki komema bibundeli ya Joabi, mwana mobali ya Tseruya ; \li1 \v 38 Ira mpe Garebi, bato ya Yeteri ; \li1 \v 39 mpe Iri, moto ya Iti. \b \li4 Na kosangisa, bango nyonso bazalaki tuku misato na sambo. \c 24 \s1 Davidi atangi bato \r (1Ma 21.1-17) \p \v 1 Yawe asikelaki lisusu bato ya Isalaele mpe atindikaki Davidi na kosala makambo oyo ekomemisa bango ngambo ; alobaki na Davidi : « Kende kotanga motango ya bato ya Isalaele mpe ya Yuda. » \p \v 2 Boye, mokonzi apesaki mitindo na Joabi, mokonzi ya mampinga, oyo azalaki elongo na ye : \pi1 — Tambola na mabota nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, mpe tanga bato mpo ete nayeba motango na bango. \p \v 3 Kasi Joabi azongiselaki mokonzi : \pi1 — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, akomisa bato ebele koleka mbala nkama, mpe ete yo mokonzi, nkolo na ngai, omona yango na miso na yo ! Kasi mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, alingi kosala likambo ya boye ? \p \v 4 Kasi mokonzi atingamaki kaka na mitindo oyo apesaki na Joabi mpe na bakonzi ya mampinga. Boye, balongwaki liboso ya mokonzi mpe bakendeki kotanga bato ya Isalaele. \v 5 Bakatisaki Yordani mpe babandaki na kotanga bato ya engumba Aroeri, na sude ya engumba oyo ezali kati na lubwaku. Bakatisaki lisusu etuka ya Gadi na nzela oyo ekenda na Yaezeri. \v 6 Longwa kuna, balekaki na etuka ya Galadi mpe ya Tayitimi-Odishi kino bakomaki na Dani Yaani mpe zingazinga ya Sidoni. \v 7 Bakendeki na ndako batonga makasi ya Tiri mpe na bingumba nyonso ya bato ya Evi mpe ya Kanana ; bongo bakomaki na sude ya etuka ya Yuda, na Beri-Sheba. \v 8 Boye batambolaki mboka mobimba, mpe bazongaki na Yelusalemi sima na basanza libwa mpe mikolo tuku mibale. \v 9 Joabi ayebisaki mokonzi motango ya bato oyo atangaki, bato oyo bakoki kosalela mopanga na bitumba : bato nkoto nkama mwambe kati na Isalaele, mpe nkoto nkama mitano kati na Yuda. \s1 Yawe apesi Isalaele etumbu \p \v 10 Sima na Davidi kotanga bato, asosolaki ete amemi ngambo. Bongo Davidi alobaki na Yawe : \pi1 — Nasali lisumu monene na kotanga bato. Sik’oyo, nabondeli Yo, oh Yawe, limbisa mabe ya mosali na Yo ; pamba te nasali makambo lokola moto ya liboma. \p \v 11 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, tango Davidi alamukaki, Yawe alobaki na mosakoli Gadi, mopesi toli ya mokonzi : \pi1 \v 12 — Kende koyebisa Davidi : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Nazali kotalisa yo bitumbu misato ; pona moko kati na yango mpo ete Ngai nakokisa yango lokola etumbu mpo na yo. › » \p \v 13 Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye : \pi1 — Oponi etumbu nini mpo ete Ngai Yawe nakokisa yango mpo na yo : mibu sambo ya nzala makasi kati na mokili na yo ; sanza misato oyo okokima liboso ya banguna na yo, oyo bakolanda yo ; to mikolo misato ya bokono oyo ebomaka kati na mokili na yo ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai. \p \v 14 Davidi azongiselaki Gadi : \pi1 — Nazali na pasi makasi na motema. Eleki malamu mpo na ngai kokweya na maboko ya Yawe, pamba te mawa na Ye ezali solo monene ; kasi tika ete nakweya te na maboko ya bato. \p \v 15 Boye, Yawe atindaki kati na Isalaele bokono oyo ebomaka, wuta na tongo kaka wana kino na ngonga oyo akataki ; mpe longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bato nkoto tuku sambo bakufaki. \v 16 Lokola anjelu atandaki loboko na ye na likolo ya Yelusalemi mpo na kobebisa yango, Yawe atalaki mpe ayokaki mawa mpo na pasi wana. Alobaki na anjelu oyo azalaki kobebisa : « Ekoki ! Longola loboko na yo ! » \p Nzokande, na tango wana, anjelu na Yawe atelemaki pembeni ya etando ya Orina, moto ya Yebusi, kati na likolo mpe mabele, mpe asimbaki mopanga ezanga ebombelo. \p \v 17 Wana Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu na Yawe koboma bato, alobaki na Yawe : « Ngai nde nasalaki masumu, ngai nde nasalaki mbeba ; bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te ; boye, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ! » \s1 Davidi atongi etumbelo mpo na Yawe \r (1Ma 21.18-26) \p \v 18 Kaka na mokolo yango, Gadi akendeki epai ya Davidi mpe alobaki na ye : \pi1 — Kende kotonga etumbelo mpo na Yawe, na etando ya Orina, moto ya Yebusi. \p \v 19 Davidi akendeki kuna kolanda liloba oyo Gadi alobaki na Kombo na Yawe. \v 20 Tango Orina atalaki mpe amonaki mokonzi elongo na bakalaka na ye koya epai na ye, abimaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na mabele. \v 21 Orina atunaki mokonzi : \pi1 — Mpo na nini mokonzi, nkolo na ngai, ayei epai ya mosali na ye ? \p Davidi azongisaki : \pi1 — Nayei kosomba etando oyo mpo ete natonga awa etumbelo mpo na Yawe ; na bongo, bokono oyo ezali koboma bato ekosila. \p \v 22 Orina azongiselaki Davidi : \pi1 — Tika ete mokonzi, nkolo na ngai, akamata na ye lopango yango mpe abonza kuna mbeka oyo amoni ete ezali malamu mpo na Yawe. Tala bangombe ya mibali oyo ekosunga mpo na mbeka ya kotumba, mabaya ya bashario mpe bikangiseli oyo ekosunga mpo na kopelisa moto. \v 23 Oh mokonzi, napesi yo nyonso ! Orina alobaki lisusu na mokonzi : \pi1 — Tika ete Yawe, Nzambe na yo, ayamba malamu bambeka na yo ! \p \v 24 Kasi mokonzi alobaki na Orina : \pi1 — Te ! Nasengeli kaka kosomba yango mpe kopesa yo motuya oyo ekoki na yango ; naboyi kobonzela Yawe, Nzambe na ngai, bambeka ya kotumba oyo nazwi na ofele. \p Boye, Davidi asombaki etando mpe bangombe yango, na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano. \p \v 25 Davidi atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe mpe abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Yawe ayokelaki mboka mawa, mpe bokono oyo ezalaki koboma elongwaki na Isalaele.