\id 2KI Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h 2 Bakonzi \toc1 2 Bakonzi \toc2 2 Bakonzi \toc3 2Ba \mt1 2 Bakonzi \c 1 \ms1 Bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele \s1 Yawe asambisi mokonzi Akazia \p \v 1 Sima na kufa ya mokonzi Akabi, bato ya Moabi batombokelaki Isalaele. \v 2 Mokonzi Akazia akweyaki na Samari wuta na lininisa ya shambre na ye ya likolo mpe azokaki pota moko ya makasi. Atindaki bantoma na ye mpe alobaki na bango : \pi1 — Bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni, mpo na koyeba soki nakobika solo na likama oyo. \p \v 3 Kasi anjelu ya Yawe alobaki na Eliya, moto ya mboka Tishibe : \pi1 — Kende kokutana na bantoma ya mokonzi ya Samari mpe tuna bango : « Boni, Nzambe azali te kati na Isalaele mpo ete bokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? \v 4 Mpo na yango, tala makambo oyo Yawe alobi : ‹ Okokita te na mbeto oyo olali, pamba te, solo, okokufa. › » \p Boye Eliya akendeki. \p \v 5 Tango bantoma bazongaki epai ya mokonzi, atunaki bango : \pi1 — Mpo na nini bozongi ? \p \v 6 Bazongisaki : \pi1 — Moto moko ayaki kokutana na biso mpe alobaki na biso : « Bozonga epai ya mokonzi oyo atindi bino mpe boloba na ye : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, Nzambe azali lisusu te kati na Isalaele ; yango wana ozali kotinda bato kokende kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? › Mpo na yango, okokita te na mbeto oyo olali ; okokufa solo. » \p \v 7 Mokonzi atunaki bango : \pi1 — Moto oyo ayaki kokutana na bino mpe ayebisaki bino makambo oyo azalaki ndenge nini ? \p \v 8 Bazongisaki : \pi1 — Azalaki mobali moko alata bilamba ya poso ya nyama na loketo na ye. \p Mokonzi alobaki : \pi1 — Ezalaki kaka Eliya, moto ya Tishibe. \p \v 9 Mbala moko, mokonzi atindaki mokonzi ya basoda tuku mitano epai ya Eliya elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda tuku mitano akendeki epai ya Eliya oyo azalaki kovanda na songe ya ngomba mpe alobaki na ye : \pi1 — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende epai na ye. \p \v 10 Kasi Eliya azongiselaki mokonzi yango ya basoda : \pi1 — Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo mpe bato na yo tuku mitano. \p Bongo moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi yango ya basoda elongo na basoda na ye tuku mitano. \p \v 11 Mokonzi atindaki lisusu epai ya Eliya mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye tuku mitano. Mokonzi ya basoda alobaki na Eliya : \pi1 — Moto na Nzambe, mokonzi apesi mitindo ete okende noki epai na ye. \p \v 12 Kasi Eliya azongiselaki mokonzi ya basoda : \pi1 — Soki solo nazali moto na Nzambe, tika ete moto ekita wuta na likolo mpe ezikisa yo elongo na bato na yo tuku mitano. \p Mbala moko moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki mokonzi ya basoda tuku mitano elongo na basoda na ye. \p \v 13 Mokonzi Akazia atindaki lisusu na mbala ya misato mokonzi mosusu ya basoda tuku mitano elongo na basoda tuku mitano. Mokonzi yango akendeki kofukama liboso ya Eliya mpe abondelaki ye : \pi1 — Moto na Nzambe, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya basali na yo, bato tuku mitano oyo, ezala na motuya na miso na yo ! \v 14 Nayebi ete moto ekitaki wuta na likolo mpe ezikisaki bakonzi nyonso mibale ya basoda elongo na basoda na bango oyo bayaki liboso ; kasi sik’oyo, tika ete bomoi na ngai mpe bomoi ya bato na ngai tuku mitano ezala na motuya na miso na yo ! \p \v 15 Anjelu ya Yawe alobaki na Eliya : \pi1 — Kende na ye nzela moko ; kobanga ye te. \p Bongo Eliya atelemaki mpe akendeki na ye nzela moko kino epai ya mokonzi. \v 16 Alobaki na mokonzi : \pi1 Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, Nzambe azali lisusu te na Isalaele mpo ete otinda bato kotuna epai ya Bala-Zebubi, nzambe ya Ekroni ? Lokola osali bongo, okokita lisusu te na mbeto oyo olali, okokufa solo. » \p \v 17 Mokonzi Akazia akufaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya Eliya. Lokola mokonzi Akazia azalaki na mwana te, ndeko na ye ya mobali Yorami akitanaki na ye na bokonzi na tango Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi. \v 18 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akazia mpe misala oyo asalaki ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \c 2 \s1 Eliya amemami na likolo \p \v 1 Tango Yawe akomaki pene ya konetola Eliya na likolo na nzela ya mopepe makasi, Eliya mpe Elize balongwaki na Giligali. \v 2 Eliya alobaki na Elize : \pi1 — Nabondeli yo, tikala awa ; pamba te Yawe atindi ngai na Beteli. \p Elize azongisaki : \pi1 — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! \p Boye bakendeki na Beteli. \p \v 3 Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Beteli, bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye : \pi1 — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ? \p Elize azongisaki : \pi1 — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye ! \p \v 4 Eliya alobaki na Elize : \pi1 — Tikala awa ; Yawe atindi ngai na Jeriko. \p Elize azongisaki : \pi1 — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! \p Boye bakendeki na Jeriko. \p \v 5 Bayekoli ya basakoli, oyo bazalaki kovanda na Jeriko bayaki epai ya Elize mpe batunaki ye : \pi1 — Oyebi ete lelo, Yawe akonetola mokonzi na yo na esika oyo ozali ? \p Elize azongisaki : \pi1 — Solo, nayebi yango, kasi bovanda nye ! \p \v 6 Eliya alobaki na ye : \pi1 — Elize, tikala awa ; Yawe atindi ngai na Yordani. \p Elize azongisaki : \pi1 — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te ! \p Boye bango mibale bakobaki nzela na bango. \p \v 7 Bayekoli tuku mitano ya basakoli bakendeki kotelema mosika ya esika oyo Eliya mpe Elize batelemaki, na ebale Yordani. \v 8 Eliya alongolaki kazaka na ye, agumbaki yango mpe abetaki yango na mayi ya ebale. Mayi ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe bango mibale bakatisaki. \v 9 Tango bakatisaki, Eliya alobaki na Elize : \pi1 — Yebisa ngai nasala nini mpo na yo liboso ete Yawe alongola ngai liboso na yo. \p Elize azongisaki : \pi1 — Tika ete nazwa nguya ya molimo na yo mbala mibale. \p \v 10 Eliya alobaki : \pi1 — Osengi ngai eloko ya pasi, kasi soki okomona ngai wana Yawe akolongola ngai liboso na yo, okozwa yango ; soki te, okozwa yango te. \p \v 11 Wana bazalaki kotambola mpe kosolola, mbala moko shar ya moto mpe bampunda ya moto ekabolaki bango mibale ; mpe Eliya amataki na likolo na nzela ya mopepe makasi. \v 12 Tango Elize amonaki bongo, agangaki : « Tata na ngai ! Tata na ngai ! Yo nde ozali lokola shar ya Isalaele mpe batambolisi na yango ! » \p Bongo Elize amonaki ye lisusu te. Boye akangaki bilamba na ye mpe apasolaki yango na biteni mibale. \v 13 Alokotaki kazaka ya Eliya, oyo ekweyaki wuta na mapeka na ye, azongaki mpe atelemaki na ngambo ya ebale Yordani. \v 14 Azwaki kazaka ya Eliya, abetaki yango na mayi mpe alobaki : « Wapi sik’oyo Yawe, Nzambe ya Eliya ? » \p Tango Elize abetaki kazaka yango na mayi, mayi ya ebale ekabwanaki na ngambo ya loboko ya mobali mpe na ngambo ya loboko ya mwasi. \p \v 15 Bayekoli ya basakoli, oyo bawutaki na Jeriko bamonaki mpe balobaki : « Molimo ya Eliya evandi sik’oyo likolo ya Elize ! » \p Bakendeki kokutana na ye mpe bagumbamaki liboso na ye kino na mabele. \v 16 Balobaki : \pi1 — Tala biso basali na yo, tozali na mibali ya mpiko tuku mitano. Tika ete baluka mokonzi na yo, tango mosusu Molimo na Yawe amemi ye mpe abwaki ye na ngomba to na lubwaku. \p Elize azongisaki : \pi1 — Te, botinda bango te ! \p \v 17 Kasi batungisaki Elize makasi kino ayokaki soni mpo na koboya. Boye alobaki : \pi1 — Botinda bango. \p Mpe batindaki mibali tuku mitano oyo balukaki Eliya mikolo misato, kasi batikalaki komona ye te. \v 18 Tango bazongaki epai ya Elize oyo atikalaki na Jeriko, Elize alobaki na bango : \pi1 — Napekisaki bino te kokende ? \s1 Elize apetoli mayi \p \v 19 Bato ya engumba ya Jeriko bayebisaki Elize : \pi1 — Oh nkolo ! Engumba na biso etongami na esika ya malamu ndenge ozali komona yango, kasi mayi ezali mabe mpe mabele ebotaka te. \p \v 20 Elize alobaki : \pi1 — Bomemela ngai sani ya moke ya sika mpe botia mungwa na kati. \p Bamemelaki ye yango \v 21 mpe akendeki na etima, abwakaki kuna mungwa mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Napetoli mayi oyo ; ekoyeisa lisusu kufa te mpe ekobebisa lisusu mabele te mpo ete ebota mbuma. › » \p \v 22 Boye mayi etikala peto kino na mokolo ya lelo, kolanda liloba oyo Elize abimisaki. \p \v 23 Longwa kuna na Jeriko, Elize akendeki na Beteli. Wana azalaki kotambola na nzela, bilenge mibali babimaki wuta na engumba mpe bazalaki kotiola ye ; bazalaki koloba : « Moto na libandi, longwa awa ! Moto na libandi, longwa awa ! » \p \v 24 Abalukaki, atalaki bango mpe alakelaki bango mabe na Kombo na Yawe. Boye, bangombolo mibale ebimaki na zamba mpe epasolaki bana tuku minei na mibale kati na bango. \v 25 Longwa wana Elize akendeki na ngomba Karimeli ; mpe longwa kuna, azongaki na Samari. \c 3 \s1 Yorami, mokonzi ya Isalaele \p \v 1 Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Yorami, mwana mobali ya Akabi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Asalaki mibu zomi na mibale na bokonzi. \v 2 Asalaki mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na tata mpe mama na ye. Abukaki ekeko ya Bala oyo tata na ye atelemisaki, \v 3 kasi akangamaki kaka na lisumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo amemaki Isalaele na kosala masumu ; atikalaki kobongwana na yango te. \s1 Kotomboka ya bato ya Moabi \p \v 4 Mesha, mokonzi ya Moabi, azalaki kobokola bameme. Mibu nyonso, azalaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Isalaele, oyo ezalaki na motuya ya bampate nkoto nkama moko mpe ya bameme ya mibali nkoto nkama moko elongo na bapwale na yango. \v 5 Tango Akabi akufaki, mokonzi ya Moabi atombokelaki mokonzi ya Isalaele. \v 6 Na tango wana, mokonzi Yorami abimaki na Samari mpe asangisaki Isalaele mobimba. \v 7 Atindaki lisusu sango oyo epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda : \pi1 — Mokonzi ya Moabi atombokeli ngai. Okoki solo kokende elongo na ngai mpo na kobundisa bato ya Moabi ? \p Mokonzi Jozafati azongisaki : \pi1 — Nakokende na yo elongo. Ngai na yo tozali kaka moto moko ; bato na ngai bazali kaka bato na yo, bongo bampunda na ngai ezali mpe bampunda na yo. \p \v 8 Jozafati atunaki : \pi1 — Tokokende na nzela nini ? \p Yorami azongisaki : \pi1 — Na nzela ya esobe ya Edomi. \p \v 9 Mokonzi ya Isalaele abimaki elongo na mokonzi ya Yuda mpe mokonzi ya Edomi. Batambolaki mikolo sambo, kasi mayi ya komela ezalaki lisusu te mpo na mampinga mpe banyama oyo ezalaki kotambola elongo na bango. \v 10 Mokonzi ya Isalaele akamwaki : \pi1 — Ndenge nini boye ! Yawe asangisi biso awa, biso bakonzi misato, kaka mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi ? \p \v 11 Kasi Jozafati atunaki : \pi1 — Awa, ezali te na mosakoli ya Yawe mpo ete totuna toli ya Yawe na nzela na ye ? \p Mokonzi moko ya mampinga ya mokonzi ya Isalaele azongisaki : \pi1 — Elize, mwana mobali ya Shafati, azali awa. Azalaki kosopa mayi na maboko ya Eliya. \p \v 12 Jozafati alobaki : \pi1 — Solo, Liloba na Yawe ezali elongo na ye. \p Boye mokonzi ya Isalaele elongo na Jozafati mpe mokonzi ya Edomi bakendeki epai ya Elize. \v 13 Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele : \pi1 — Ngai na yo likambo nini ? Kende koluka mosakoli ya tata na yo to ya mama na yo. \p Mokonzi ya Isalaele azongisaki : \pi1 — Te ! Yawe asangisi biso te, biso bakonzi oyo misato, mpo na kokaba biso na maboko ya bato ya Moabi ! \p \v 14 Elize azongisaki : \pi1 — Na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo ngai nasalelaka ; soki ezalaki te mpo na kotosa Jozafati, mokonzi ya Yuda, nalingaki kutu ata moke te kotala yo to kolanda yo na bokebi. \v 15 Kasi sik’oyo, memela ngai mobeti moko ya lindanda ! \p Wana mobeti lindanda azalaki kobeta, loboko ya Yawe ekitelaki Elize, \v 16 mpe Elize alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Botimola mabulu ebele na lubwaku oyo ! \v 17 Pamba te, tala liloba oyo Yawe alobi : Bokotikala te komona mopepe to mvula, kasi lubwaku oyo ekotonda na mayi, mpe bino elongo na bibwele na bino bokomela yango. \v 18 Ezali likambo moke na miso ya Yawe. Akokaba lisusu bato ya Moabi na maboko na bino. \v 19 Bokobuka bingumba na bango nyonso oyo batonga makasi mpe bingumba nyonso ya minene, bokokata banzete na bango nyonso ya kitoko, bokokanga bitima nyonso ya mayi mpe bokobebisa bilanga nyonso na mabanga. » \p \v 20 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, na tango oyo batumbaka mbeka, mayi ebandaki kotiola na nzela ya Edomi, mpe mabele etondaki na mayi. \v 21 Nzokande, sima na bato nyonso ya Moabi koyoka sango ete bakonzi bayei kobundisa bango, babengaki bato nyonso, bilenge mpe mikolo oyo bakoki komema bibundeli, mpe batelemisaki bango na mondelo ya mboka. \v 22 Tango balamukaki na tongo-tongo, moyi ezalaki kongala na mayi ; mpe bato ya Moabi bamonaki liboso na bango mayi motane lokola makila. \v 23 Bagangaki : « Ezali makila ! Bakonzi babundi bango na bango. Sik’oyo, bato na Moabi, tokende kobotola biloko na bango ! » \p \v 24 Kasi tango bato ya Moabi bakomaki na molako ya bana ya Isalaele, bana ya Isalaele batelemaki, babundisaki bango kino bato ya Moabi bakimaki. Bato ya Isalaele bakotaki na mboka Moabi mpe babetaki yango. \v 25 Babebisaki bingumba, mpe moto nyonso abwakaki libanga moko na bilanga nyonso ya kitoko kino etondaki na mabanga, bakangaki bitima nyonso ya mayi, mpe bakataki nzete nyonso ya kitoko. Kaka engumba ya Kiri-Aresheti nde etikalaki na mabanga na yango ; kasi babwaki ya mabanga bazingelaki yango mpe babundisaki yango lokola. \v 26 Tango mokonzi ya Moabi amonaki ete bitumba ebalukeli ye, akamataki basoda nkama sambo oyo babundaka na mipanga, mpo na kofungola nzela kino epai ya mokonzi ya Edomi, kasi balongaki te. \v 27 Boye azwaki mwana na ye ya liboso ya mobali oyo alingaki kokitana na ye na bokonzi, abonzaki ye lokola mbeka ya kotumba, na likolo ya mir ya engumba. Tango bamonaki bongo, bana ya Isalaele bayokaki mawa, balongwaki mpe bazongaki na mboka na bango. \c 4 \s1 Mafuta ya mwasi akufisa mobali \p \v 1 Mwasi moko kati na basi ya bayekoli ya basakoli abondelaki Elize : \pi1 — Mosali na yo, mobali na ngai, akufa. Oyebi malamu ete azalaki kotosa Yawe. Kasi moto oyo adefisaki ye niongo ayei mpo na kozwa bana na ngai mibale ya mibali mpo ete bakoma bawumbu na ye. \p \v 2 Elize azongiselaki ye : \pi1 — Ndenge nini nakoki kosunga yo ? Yebisa ngai eloko oyo ozali na yango kati na ndako na yo. \p Azongisaki : \pi1 — Mwasi mowumbu na yo azali na eloko moko te, longola kaka mwa mafuta. \p \v 3 Elize alobaki : \pi1 — Kende kosenga na baninga na yo nyonso bambeki ya pamba, kosenga moke te. \v 4 Sima, zonga na ndako na yo, kanga ekuke sima na yo elongo na bana na yo ya mibali ; sopa mafuta kati na mbeki moko na moko, mpe tia pembeni mbeki oyo etondi. \p \v 5 Atikaki Elize mpe akangaki ekuke sima na ye elongo na bana na ye ya mibali. Bana na ye bazalaki kopesa ye bambeki, mpe azalaki kotondisa yango na mafuta. \v 6 Tango bambeki nyonso etondaki, alobaki na moko kati na bana na ye ya mibali : \pi1 — Pesa ngai lisusu mbeki moko. \p Kasi mwana yango azongiselaki ye : \pi1 — Bambeki nyonso esili. \p Kaka na tango yango, mafuta etikaki kobima. \v 7 Mwasi yango akendeki koyebisa moto na Nzambe. Mpe moto na Nzambe alobaki na ye : \pi1 — Kende, teka mafuta yango mpe futa niongo na yo ; bongo, yo elongo na bana na yo ya mibali, bokobika na oyo ekotikala. \s1 Elize mpe mwasi ya Sunami \p \v 8 Mokolo moko, Elize akendeki na Sunemi. Mpe kuna, mwasi moko ya bomengo atungisaki ye mpo na kosenga na ye ete andima kolia na ndako na ye. Boye, tango nyonso Elize azalaki kolekela na Sunami, azalaki kotelema na ndako ya mwasi yango mpo na kolia. \v 9 Mwasi yango alobaki na mobali na ye : « Nayebi ete moto oyo ayaka mbala mingi epai na biso azali mobulami ya Nzambe. \v 10 Nabondeli yo, tika ete tobongisela ye shambre ya moke na likolo ya ndako mpe totia kati na yango mbeto, mesa, kiti mpe mwinda. Boye, tango nyonso akoya epai na biso, akoki kovanda kuna. » \p \v 11 Mokolo moko, Elize ayaki na Sunami, amataki na shambre na ye mpe alalaki kuna. \v 12 Bongo alobaki na mosali na ye, Geazi : « Benga mwasi oyo ya Sunami. » Geazi abengaki mwasi ya Sunami, mpe mwasi yango ayaki kotelema liboso ya Elize. \v 13 Elize alobaki na Geazi : \pi1 — Loba na ye : « Omitungisi mingi mpo na biso. Eloko nini tokoki sik’oyo kosalela yo ? Tolobela yo epai ya mokonzi to epai ya mokonzi ya basoda ? » \p Mwasi ya Sunami azongisaki : \pi1 — Navandaka na kimia kati na bato na ngai. \p \v 14 Elize atunaki mosali na ye, Geazi : \pi1 — Eloko nini tokoki kosala mpo na ye ? \p Geazi azongisaki : \pi1 — Azali na mwana te, mpe mobali na ye azali mobange. \p \v 15 Elize alobaki : \pi1 — Benga ye ! \p Geazi abengaki ye, mpe ayaki kotelema na ekuke. \p \v 16 Elize alobaki : \pi1 — Na mobu oyo ekoya, na eleko oyo, maboko na yo ekosimba mwana mobali. \p Mwasi ya Sunami agangaki : \pi1 — Te, nkolo na ngai, moto na Nzambe, kopesa na ngai mwasi mosali na yo elikya ya lokuta te ! \p \v 17 Nzokande, mwasi ya Sunami akomaki na zemi. Mpe na mobu oyo elandaki, na eleko yango kaka, abotaki mwana mobali, ndenge kaka Elize alobaki na ye. \p \v 18 Mwana akolaki. Mokolo moko, mwana akendeki epai ya tata na ye, oyo azalaki elongo na babuki mbuma. \v 19 Alobaki na tata na ye : \pi1 — Moto pasi ! Moto pasi ! \p Tata na ye alobaki na mosali moko : \pi1 — Zongisa ye epai ya mama na ye ! \p \v 20 Mosali amemaki ye mpe akomisaki ye epai ya mama na ye. Mwana mobali avandaki na makolo ya mama na ye kino na midi mpe, na sima, akufaki. \v 21 Mama na ye amataki na shambre ya mosakoli, alalisaki ye na mbeto ya moto na Nzambe, akangaki ekuke mpe abimaki. \v 22 Bongo abengaki mobali na ye mpe alobaki na ye : \pi1 — Nabondeli yo, tindela ngai elenge moko kati na basali mpe ane moko ya mwasi, mpo ete nakende noki epai ya moto na Nzambe mpe nazonga mbala moko. \p \v 23 Mobali na ye atunaki : \pi1 — Mpo na nini olingi kokende epai na ye lelo ? Lelo ezali ebandeli ya sanza te ! Ezali mpe mokolo ya Saba te ! \p Azongisaki : \pi1 — Komitungisa te ! Nyonso ezali malamu. \p \v 24 Mwasi ya Sunami abongisaki ane mpe alobaki na elenge mosali na ye : « Tokeyi ! Tambolisa ane ; kotelema na nzela te soki nalobi na yo te. » \p \v 25 Boye, akendeki mpe akomaki na ngomba Karimeli epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. Tango Elize amonaki ye na mosika, alobaki na mosali na ye, Geazi : \pi1 — Tala ! Ezali mwasi ya Sunami ! \v 26 Nabondeli yo, pota mbangu sik’oyo mpo na kokutana na ye, mpe tuna ye : « Boni, kimia ezali ? Ozali malamu ? Mobali na yo azali malamu ? Mwana na yo azali malamu ? » \p Azongisaki : \pi1 — Nyonso ezali malamu. \p \v 27 Boye akobaki nzela na ye kino akomaki na ngomba, epai ya moto na Nzambe. Mpe amibwakaki na makolo na ye. Geazi apusanaki mpo na kolongola ye na makolo ya Elize, kasi moto na Nzambe alobaki : \pi1 — Tika ye bongo ! Azali na pasi makasi kati na motema na ye, kasi Yawe abombeli ngai yango mpe atalisi ngai te tina na yango. \p \v 28 Mwasi ya Sunami alobaki : \pi1 — Boni, nasengaki mwana epai ya nkolo na ngai ? Te ! Kutu, nalobaki na yo : « Kopesa ngai elikya ya lokuta te ! » \p \v 29 Elize alobaki na Geazi : \pi1 — Lata mokaba na yo, kamata nzete na ngai na loboko na yo mpe kende. Soki okutani na moto na nzela, kopesa ye mbote te. Mpe soki moto apesi yo mbote, kozongisa te. Okotia nzete na ngai na elongi ya mwana mobali. \p \v 30 Kasi mama ya mwana alobaki : \pi1 — Na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, nakotika yo te. \p Boye Elize atelemaki mpe alandaki mwasi ya Sunami. \v 31 Geazi akendeki liboso na bango mpe atiaki nzete na elongi ya mwana mobali, kasi ata eloko moko te esalemaki, ezala mongongo to koningana. Geazi azongaki mpo na kokutana na Elize mpe alobaki na ye : \pi1 — Mwana alamuki te. \p \v 32 Tango Elize akomaki na ndako, akutaki ebembe ya mwana mobali elali na mbeto na ye. \v 33 Elize akotaki, amikangelaki na shambre elongo na mwana mobali, mpe asambelaki Yawe. \v 34 Bongo Elize amataki na mbeto mpe alalelaki mwana mobali, atutisaki monoko na ye na monoko ya mwana, miso na ye na miso ya mwana, mpe maboko na ye na maboko ya mwana. Lokola amitandaki bongo na likolo ya mwana mobali, nzoto ya mwana mobali ekomaki moto. \v 35 Elize alongwaki, atambolaki na bangambo nyonso ya shambre ; bongo amataki lisusu na mbeto mpe amitandaki na likolo ya mwana. Mbala moko, mwana akosolaki mbala sambo mpe afungolaki miso. \v 36 Elize abengaki Geazi mpe alobaki na ye : \pi1 — Benga mwasi ya Sunami ! \p Geazi abengaki ye. Tango ayaki epai ya Elize, Elize alobaki : \pi1 — Zwa mwana na yo ! \p \v 37 Mwasi ya Sunami apusanaki, akweyaki na makolo ya Elize mpe agumbamaki kino na se ; bongo azwaki mwana na ye mpe abimaki. \s1 Elize apetoli bilei \p \v 38 Elize azongaki na Giligali. Nzokande etuka yango ezalaki kati na nzala makasi. Wana bayekoli ya basakoli bavandaki na mayangani elongo na Elize, alobaki na mosali na ye : « Tia nzungu ya monene na moto mpe lamba elubu mpo na basakoli oyo. » \p \v 39 Moko kati na bango akendeki na bilanga mpo na kobuka ndunda, mpe amonaki nzete ya vino ya zamba. Abukaki na nzete yango ndambo ya bakolokente\f + \fr 4.39 \fr*\ft Kolokente ezali bambuma oyo ebotaka na nzete ya vino ya zamba, ekokana na bambuma ya mbika.\ft*\f* mpe atondisaki yango na elamba na ye. Tango azongaki, akataki yango mike-mike mpe atiaki yango kati na nzungu ya elubu ; moto moko te ayebaki soki ezali nini. \v 40 Bakabolelaki bato elubu. Tango kaka babandaki kolia yango, bagangaki : \pi1 — Moto na Nzambe, kufa ezali kati na nzungu oyo ! \p Mpe bakokaki lisusu te kolia yango. \v 41 Elize alobaki : \pi1 — Bomemela ngai farine ! \p Atiaki farine kati na nzungu mpe alobaki : \pi1 — Bokabolela yango bato mpo ete balia. \p Mpe kati na elubu oyo ezalaki kati na nzungu, ezalaki lisusu na eloko moko te ya mabe. \s1 Elize aleisi bato ebele \p \v 42 Moto moko awutaki na Bala-Shalisha, amemelaki moto na Nzambe mapa tuku mibale ya orje\f + \fr 4.42 \fr*\ft Orje ezali mbuma oyo basalelaka mapa ya talo moke. Mbuma yango ezali lokola loso.\ft*\f* oyo ewutaki na bambuma ya liboso ya elanga, elongo na saki moko ya bambuma ya ble. Elize alobaki na mosali na ye : \pi1 — Pesa yango na bato mpo ete balia ! \p \v 43 Mosali na ye atunaki : \pi1 — Nakokoka ndenge nini kokabola mapa oyo na bato nkama moko ? \p Elize alobaki lisusu : \pi1 — Kabolela yango bato nyonso mpo ete balia, pamba te tala Liloba oyo Yawe alobi : « Bakolia, bakotonda mpe bakotika mosusu. » \p \v 44 Boye mosali akabolelaki bango mapa yango. Baliaki mpe batikaki mosusu, kolanda Liloba na Yawe. \c 5 \s1 Namani abiki na bokono ya maba \p \v 1 Namani, mokonzi ya basoda ya mokonzi ya Siri, azalaki moto monene mpe moto ya lokumu mingi na miso ya nkolo na ye, pamba te, na nzela na ye, Yawe apesaki bato ya Siri elonga. Azalaki soda ya mpiko, kasi azalaki na bokono ya maba. \v 2 Nzokande, tango mampinga ya bato ya Siri babimaki na bitumba, bakangaki na bowumbu elenge mwasi moko ya Isalaele. Boye akomaki kosalela mwasi ya Namani. \v 3 Elenge mwasi yango alobaki na nkolo na ye ya mwasi : \pi1 — Ah, soki kaka nkolo na ngai, Namani, akokaki komona mosakoli oyo azali kati na Samari ! Akoki penza kobikisa ye na bokono na ye ya maba. \p \v 4 Namani akendeki epai ya nkolo na ye mpe abetelaki ye lisolo ya makambo oyo elenge mwasi ya Isalaele alobaki. \v 5 Mokonzi ya Siri alobaki na ye : \pi1 — Malamu ! Nakotinda mokanda epai ya mokonzi ya Isalaele. \p Boye Namani akendeki mpe amemaki bakilo ya palata, nkama misato na tuku mitano ; bakilo ya wolo, tuku sambo, mpe bilamba zomi ya talo. \v 6 Apesaki epai ya mokonzi ya Isalaele mokanda oyo elobaki : \pmo « Na nzela ya mokanda oyo, natindeli yo mosali na ngai, Namani, mpo ete obikisa ye na bokono na ye ya maba. » \p \v 7 Tango kaka mokonzi ya Isalaele atangaki mokanda, apasolaki bilamba na ye mpe alobaki : « Boni, ngai nazali Nzambe ? Boni, nazali na makoki ya koboma to ya kozongisa na bomoi ? Mpo na nini moto oyo atindeli ngai moto ete nabikisa ye na bokono na ye ya maba ? Botala ndenge nini azali kolukela ngai makambo ! » \p \v 8 Tango Elize, moto na Nzambe, ayokaki ete mokonzi ya Isalaele apasolaki bilamba na ye, atindelaki ye liloba oyo : « Mpo na nini opasoli bilamba na yo ? Tika ete moto wana aya epai na ngai, mpe akoyeba ete ezali na mosakoli moko kati na Isalaele ! » \p \v 9 Boye Namani akendeki elongo na bampunda na ye mpe shar na ye, mpe atelemaki na ekotelo ya ndako ya Elize. \v 10 Elize atindaki moto moko mpo na koyebisa Namani : \pi1 — Kende kosukola mbala sambo na ebale Yordani ; bongo nzoto na yo ekobongwana, mpe okokoma peto. \p \v 11 Kasi Namani asilikaki, azongaki mpe alobaki : \pi1 — Nakanisaki ete akoya penza epai na ngai, akobelela Yawe, Nzambe na ye, akotia loboko na ye na esika oyo bokono ezali, mpe akobikisa ngai na bokono na ngai ya maba ! \v 12 Boni, bibale Abana mpe Paripari kati na Damasi ezali motuya te koleka miluka nyonso ya Isalaele ? Nakokaki te kosukola na bibale wana mpe kokoma peto ? \p Boye, abalukaki mpe akendeki na kanda. \v 13 Kasi basali na ye bapusanaki mpe balobaki na ye : \pi1 — Nkolo, soki mosakoli ayebisaki yo ete osala likambo moko ya monene, boni, olingaki kosala yango te ? Bongo mpo na nini te koleka, tango azali koloba na yo : « Sukola, mpe okokoma peto ! » \p \v 14 Boye Namani akitaki mpe amizindisaki mbala sambo na ebale Yordani, ndenge moto na Nzambe ayebisaki ye ; mpe nzoto na ye ebongwanaki mpe ekomaki peto lokola nzoto ya elenge mobali. \p \v 15 Bongo Namani elongo na basali na ye nyonso bazongaki epai ya moto na Nzambe. Atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : \pi1 — Nayebi sik’oyo ete ezali na Nzambe te kati na mokili mobimba longola kaka kati na Isalaele. Nabondeli yo, ndima kado kowuta na mosali na yo. \p \v 16 Mosakoli Elize azongisaki : \pi1 — Na Kombo na Yawe oyo nasalelaka, nakondima eloko moko te. \p Namani atungisaki ye, kasi Elize aboyaki kaka. \v 17 Namani alobaki : \pi1 — Lokola oboyi, pesa nzela ete napesa mosali na yo ndambo ya mabele oyo bamile mibale ekoki komema, pamba te mosali na yo akoki te kobonzela banzambe mosusu bambeka ya kotumba to bambeka ya boyokani, bobele Yawe. \v 18 Kasi tika ete Yawe alimbisa mosali na yo mpo na likambo oyo : tango nkolo na ngai akotaka na ndako ya nzambe Rimoni mpo na kogumbama, nagumbamaka elongo na ye, pamba te alalelaka loboko na ngai. Tika ete Yawe alimbisa mosali na yo mpo na yango. \p \v 19 Elize alobaki na ye : \pi1 — Kende na kimia ! \p Tango Namani akomaki mwa mosika, \v 20 Geazi, mosali ya Elize, moto na Nzambe, amilobelaki : « Nkolo na ngai atiki penza na pamba Namani, moto oyo ya Arami, wana aboyi kozwa biloko oyo amemelaki ye. Na Kombo na Yawe, nakolanda ye mbangu mpe nakozwa ata eloko moko epai na ye. » \p \v 21 Boye Geazi alandaki Namani mbangu. Tango Namani amonaki ye kopota mbangu na sima na ye, akitaki na shar na ye mpo na kokutana na ye mpe atunaki ye : \pi1 — Boni, nyonso ezali malamu ? \p \v 22 Geazi azongisaki : \pi1 — Iyo, nyonso ezali malamu. Nkolo na ngai atindi ngai koyebisa yo : « Bilenge bayekoli mibale kati na basakoli bayei epai na ngai wuta na etuka ya bangomba ya Efrayimi. Nabondeli yo, pesa bango bakilo ya palata, tuku misato na mitano, mpe bilamba mibale ya talo. » \p \v 23 Namani alobaki : \pi1 — Kamata bakilo ya palata, tuku sambo. \p Atungisaki Geazi ete azwa yango. Boye, atiaki bakilo ya palata, tuku sambo kati na basaki mibale elongo na bilamba mibale ya talo. Namani apesaki yango epai ya basali na ye mibale oyo bamemaki yango liboso ya Geazi. \v 24 Tango Geazi akomaki na ngomba, azwaki biloko na maboko ya basali ya Namani mpe atiaki yango kati na ndako. Azongisaki basali yango, mpe bakendeki. \v 25 Boye, Geazi akotaki mpe atelemaki liboso ya nkolo na ye, Elize. Elize atunaki ye : \pi1 — Geazi, okendeki wapi ? \p Geazi azongisaki : \pi1 — Mosali na yo akendeki epai moko te. \p \v 26 Kasi Elize alobaki na ye : \pi1 — Boni, molimo na ngai ezalaki elongo na yo te tango moto wana akitaki na shar na ye mpo na kokutana na yo ? Ezali penza tango ya kozwa palata to ya kondima bilamba, bilanga ya nzete ya olive, ya vino, bameme, bangombe to basali ya mibali mpe basali ya basi ? \v 27 Lokola osali bongo, bokono ya maba ya Namani ekokangama na yo mpe bakitani na yo mpo na libela. \p Bongo Geazi alongwaki na liboso ya Elize. Poso ya nzoto na ye ekomaki na maba, mpe akomaki pembe lokola mvula ya pembe. \c 6 \s1 Ebende ya epasola etepi na mayi \p \v 1 Mokolo moko, bayekoli ya basakoli balobaki na Elize : \pi1 — Tala ! Esika oyo tosanganaka elongo na yo ekomi moke mingi mpo na biso. \v 2 Pesa biso nzela ya kokende na ebale Yordani epai wapi moko na moko kati na biso akoki kozwa nzete mpo na kotonga kuna esika ya kovanda. \p Elize alobaki na bango : \pi1 — Bokende ! \p \v 3 Moko kati na bango alobaki : \pi1 — Okosepela te kokende elongo na basali na yo ? \p Elize azongisaki : \pi1 — Nandimi, nakokende. \p \v 4 Boye akendeki elongo na bango. Bakendeki na ebale Yordani mpe babandaki kokata banzete. \v 5 Wana moko kati na bango azalaki kokata nzete, ebende ya epasola na ye ekweyaki na mayi. Agangaki : \pi1 — Ah, nkolo na ngai ! Nadefaki yango kodefa ! \p \v 6 Moto na Nzambe atunaki : \pi1 — Ekweyaki na esika nini ? \p Sima na ye kolakisa ye esika yango, Elize akataki eteni ya nzete mpe abwakaki yango na esika oyo ebende ya epasola ekweyaki. Mpe, na mbala moko, eteni ya nzete yango ematisaki ebende na likolo ya mayi, mpe ebende ekomaki kotepa. \v 7 Elize alobaki : \pi1 — Kamata yango ! \p Boye, mosali wana asembolaki loboko na ye mpe akamataki yango. \s1 Bato ya Siri balingi kokanga Elize \p \v 8 Mokonzi ya Siri azalaki kobundisa bana ya Isalaele. Asololaki na basali na ye mpe alobaki : « Nakotia molako na ngai na esika songolo to pakala. » \v 9 Mbala moko, moto na Nzambe atindaki maloba oyo epai ya mokonzi ya Isalaele : « Keba ! Koleka na esika wana te, pamba te bato ya Siri bazali kokita kuna. » \p \v 10 Mokonzi ya Isalaele atindaki bato kokende kononga esika oyo moto na Nzambe alobelaki. \p Mbala ebele, Elize azalaki kokebisa mokonzi ete azala na bokebi na bisika ya ndenge wana ; mpe mbala ebele, mokonzi ya Isalaele azalaki komibikisa na motambo ya bato ya Siri. \v 11 Suka na suka, mokonzi ya Siri asilikaki makasi, abengisaki bakalaka na ye mpe atunaki bango : \pi1 — Bokoki te koyebisa ngai nani kati na biso azali na ngambo ya mokonzi ya Isalaele ? \p \v 12 Moko kati na bakalaka na ye alobaki : \pi1 — Mokonzi, nkolo na ngai, moko te kati na biso. Ezali nde mosakoli Elize oyo azali kati na Isalaele ; ye nde ayebaka mpe ayebisaka mokonzi ya Isalaele ata makambo oyo olobaka kati na shambre na yo ya kolala. \p \v 13 Mokonzi apesaki mitindo : \pi1 — Bokende koluka esika oyo azali mpo ete natinda bato mpo na kokanga ye. \p Bayaki koyebisa ye : \pi1 — Azali na Dotani. \p \v 14 Bongo mokonzi atindaki kuna bampunda elongo na bashar mpe basoda ebele. Bakendeki kuna na butu mpe bazingelaki engumba. \v 15 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, tango mosali ya moto na Nzambe alamukaki mpe abimaki, amonaki ete mampinga elongo na bampunda mpe bashar bazingelaki engumba. Mosali yango alobaki na Elize : \pi1 — Oh nkolo na ngai, eyindi na libanda ! Tokosala nini ! \p \v 16 Mosakoli azongisaki : \pi1 — Kobanga te, pamba te ba-oyo bazali elongo na biso bazali ebele koleka ba-oyo bazali elongo na bango. \p \v 17 Elize asambelaki : \pi1 — Oh Yawe, fungola ye miso mpo ete amona ! \p Yawe afungolaki miso ya mosali, mpe mosali atalaki ; amonaki bangomba mike etonda na bampunda mpe bashar ya moto zingazinga ya Elize. \p \v 18 Lokola monguna azalaki kopusana pene na ye, Elize asambelaki Yawe : \pi1 — Boma ekolo oyo miso ! \p Mpe Yawe abomaki bango miso, ndenge kaka Elize asengaki. \v 19 Elize alobaki na bango : \pi1 — Nzela ezali awa te ! Engumba mpe ezali awa te ! Bolanda ngai, mpe nakomema bino epai ya moto oyo bozali koluka. \p Elize amemaki bango na Samari. \v 20 Tango bakotaki na engumba, Elize asambelaki lisusu : \pi1 — Yawe, fungola miso ya bato oyo mpo ete bamona. \p Yawe afungolaki miso na bango, mpe bamonaki ete bazali kati na engumba Samari. \p \v 21 Tango mokonzi ya Isalaele amonaki bango, atunaki Elize : \pi1 — Tata na ngai, naboma bango ? Naboma bango ? \p \v 22 Elize azongisaki : \pi1 — Koboma bango te ! Boni, okoboma solo bato oyo okangi, na nzela ya mopanga na yo to ya tolotolo na yo ? Pesa bango nde bilei mpe mayi ya komela mpo ete balia, bamela mpe bazonga epai ya mokonzi na bango. \p \v 23 Boye abongisaki feti monene mpo na bango. Tango basilisaki kolia mpe komela, azongisaki bango. Mpe bazongaki epai ya mokonzi na bango. Wuta tango yango, mampinga ya Siri batikaki kokota mpo na kobundisa Isalaele. \s1 Nzala makasi kati na Samari \p \v 24 Sima na tango, Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, asangisaki mampinga na ye nyonso mpe akendeki kozingela engumba Samari. \v 25 Lokola bazingelaki Samari tango molayi, nzala makasi ekotaki kati na engumba kino moto moko ya ane ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mwambe ; mpe bagrame nkama mibale na tuku mitano ya nyei ekawuka ya ebenga ekomaki kotekama na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, mitano. \p \v 26 Mokolo moko, wana mokonzi ya Isalaele azalaki koleka na likolo ya mir ya lopango, mwasi moko agangaki epai na ye : \pi1 — Mokonzi, nkolo na ngai, sunga ngai ! \p \v 27 Mokonzi azongisaki : \pi1 — Soki Yawe asungi yo te, esika nini ngai nakozwa lisungi mpo na kosunga yo ? Nazangi vino to ble ya kopesa yo. \p \v 28 Nzokande, mokonzi atunaki ye lisusu : \pi1 — Likambo nini ekomeli yo ? \p Mwasi azongisaki : \pi1 — Mwasi wana alobaki na ngai : « Pesa mwana na yo ya mobali mpo ete tolia ye lelo, bongo lobi, tokolia mwana na ngai. » \v 29 Boye tolambaki mwana na ngai ya mobali mpe toliaki ye. Mokolo oyo elandaki, nalobaki na ye : « Pesa mwana na yo ya mobali mpo ete tolia ye, » kasi abombaki ye. \p \v 30 Tango mokonzi ayokaki maloba ya mwasi oyo, apasolaki bilamba na ye. Lokola atambolaki lisusu na likolo ya mir ya lopango, bato bamonaki ete, na se ya bilamba na ye ya bokonzi, alataki saki na nzoto na ye. \v 31 Mokonzi alobaki : « Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki kaka moto ya Elize, mwana mobali ya Shafati, etikali na likolo ya mapeka na ye. » \s1 Elize asakoli kosila ya nzala makasi \p \v 32 Nzokande, Elize avandaki kati na ndako na ye, elongo na bakambi ya engumba. Mokonzi atindaki ntoma moko epai ya Elize. Kasi liboso ete akoma, Elize alobaki na bakambi ya engumba : « Bozali komona te ete mobomi oyo atindi moto mpo na koya kokata ngai moto ? Bosala keba ! Tango kaka bokomona ye, bokanga ekuke liboso na ye mpe botindika ye na yango na sima ! Boyoka ! Wana ezali makelele ya makolo ya nkolo na ye te, oyo ezali koyokana sima na ye ? » \p \v 33 Wana Elize azalaki nanu koloba, ntoma ya mokonzi akomaki mpe ayebisaki ye maloba ya mokonzi : « Pasi oyo nyonso ewuti epai ya Yawe ! Nakozela lisusu nini kowuta na Ye ? » \c 7 \p \v 1 Elize alobaki : \pi1 — Boyoka Liloba na Yawe ! Tala makambo oyo Yawe alobi : « Lobi, na tango oyo, na ekuke ya Samari, bakoteka bakilo zomi na mibale ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. » \p \v 2 Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi ya Isalaele azalaki kotiela motema alobaki na moto na Nzambe : \pi1 — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema ? \p Elize azongisaki : \pi1 — Okomona yango na miso na yo, kasi okolia yango te. \s1 Bato na maba kati na molako ya bato ya Siri \p \v 3 Na ekuke ya engumba, ezalaki na bato minei na maba. Bazalaki kolobana bango na bango : « Mpo na nini totikala awa kino tokokufa ? \v 4 Soki tolobi : ‹ Tokota na engumba, › nzala makasi ezali kuna, tokokufa. Soki mpe totikali awa, tokokufa kaka. Boye, tika ete tokende na molako ya bato ya Siri mpe tomipesa epai na bango. Soki bayambi biso, tobiki ; kasi soki babomi biso, tokufi kaka. » \p \v 5 Na pokwa, batelemaki mpe bakendeki na molako ya bato ya Siri. Tango bakomaki na mondelo ya molako, bamonaki ata moto moko te, \v 6 pamba te Nkolo asalaki ete bato ya Siri bayoka lokito ya bashar, ya bampunda mpe ya mampinga minene ya basoda kino balobanaki bango na bango : « Tala, mokonzi ya Isalaele azwi mokonzi ya bato ya Iti mpe mokonzi ya bato ya Ejipito mpo na koya kobundisa biso. » \p \v 7 Boye batelemaki mpe bakimaki na pokwa, basundolaki bandako na bango ya kapo, bampunda na bango mpe ba-ane na bango. Batikaki molako ndenge ezalaki mpo na kobikisa bomoi na bango. \v 8 Bato na maba bakomaki na mondelo ya molako, bakotaki na ndako moko ya kapo, baliaki mpe bamelaki. Bongo bamemaki palata, wolo, bilamba, mpe bakendeki kobomba yango. Sima, bazongaki, bakotaki na ndako mosusu ya kapo, bazwaki kuna biloko mpe bakendeki lisusu kobomba yango. \p \v 9 Bongo balobanaki bango na bango : « Tozali kosala malamu te : Mokolo ya lelo ezali mokolo ya sango malamu, mpe tozali kobomba sango yango mpo na biso moko ! Soki tozeli kino lobi na tongo, tokozwa etumbu. Tokende sik’oyo kopesa sango na ndako ya mokonzi. » \p \v 10 Boye bakendeki, babelelaki epai ya bakengeli bikuke ya engumba mpe bayebisaki bango : « Tokotaki na molako ya bato ya Siri, moto ata moko te azali kuna, toyoki ata mongongo ya moto te ; etikali kaka bampunda mpe ba-ane bakanga, mpe bandako ya kapo basundola. » \p \v 11 Bakengeli ekuke ya engumba babengaki moto moko kati na engumba mpo na kokomisa sango na ndako ya mokonzi. \v 12 Mokonzi alamukaki na butu mpe alobaki na bakalaka na ye : \pi1 — Tika ete nayebisa bino makambo oyo bato ya Siri basali biso. Bayebi solo ete tozali kokufa nzala, yango wana batiki milako na bango mpo na kokende kobombama na zamba. Balobani bango na bango : « Bakobima solo, mpe tokokanga bango ya bomoi, bongo tokokota na engumba. » \p \v 13 Moko kati na bakalaka na ye azongisaki : \pi1 — Bongisa ndambo ya mibali mpo ete bazwa bampunda mitano kati na oyo etikali kati na engumba. Tokobungisa ata eloko moko te, pamba te suka na bango ekozala ndenge moko na oyo ya bana nyonso ya Isalaele oyo batikali na engumba. Boye totinda bango kaka mpo toyeba makambo oyo ewuti kosalema. \p \v 14 Boye baponaki bashar mibale elongo na bampunda na yango, mpe mokonzi atindaki yango mpo na koluka mampinga ya bato ya Siri. Apesaki mitindo na batambolisi na yango : « Bokende mpe botala ! » \p \v 15 Balandaki bilembo ya makolo ya bato ya Siri kino na ebale Yordani, mpe bamonaki ete nzela nyonso etondaki na bilamba mpe bibundeli oyo basoda ya Siri babwakaki tango bakimaki na mbalakata. Bongo bantoma bazongaki mpe bapesaki sango epai ya mokonzi. \p \v 16 Bongo bato ya Samari babimaki mpe bazwaki na makasi biloko kati na molako ya bato ya Siri. Boye bakomaki koteka bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, ndenge kaka Yawe alobaki. \v 17 Mokonzi ya Isalaele aponaki mokonzi ya basoda, oyo mokonzi agumbamaka mpo na loboko na ye, mpo na kokengela ekuke ya engumba, kasi bato banyataki ye mpe akufaki kolanda makambo oyo moto na Nzambe asakolaki tango mokonzi ayaki na ndako na ye. \v 18 Makambo oyo esalemaki ndenge moto na Nzambe alobaki na mokonzi : « Lobi, na tango oyo, bakoteka na ekuke ya Samari bakilo zomi ya farine na motuya ya mbongo moko ya ebende ya palata, mpe bakilo tuku mibale ya orje na motuya kaka wana. » \p \v 19 Mokonzi ya basoda, oyo mokonzi agumbamaka mpo na loboko na ye, alobaki na moto na Nzambe : \pi1 — Tala, ata soki Yawe afungoli maninisa ya Lola, likambo ya boye ekoki penza kosalema ? \p Mpe Elize, moto na Nzambe, azongisaki : \pi1 — Okomona yango na miso, kasi okolia yango te. \p \v 20 Makambo yango esalemaki ndenge kaka elobamaki na tina na ye : bato banyataki ye na ekuke ya engumba, mpe akufaki. \c 8 \s1 Mokonzi akati likambo ya mwasi ya Sunami \p \v 1 Elize alobaki na mama ya mwana mobali oyo asekwisaki : « Kende elongo na libota na yo na esika oyo bokoki kovanda, pamba te Yawe abengi nzala makasi kati na mokili oyo ; ekowumela mibu sambo. » \p \v 2 Mwasi asalaki ndenge moto na Nzambe alobaki. Ye elongo na libota na ye bakendeki mpe bavandaki mibu sambo na mokili ya Filisitia. \v 3 Tango mibu yango sambo ekokaki, mwasi azongaki na mboka na ye wuta na mokili ya Filisitia ; akendeki epai ya mokonzi mpo ete bazongisela ye ndako mpe mabele na ye. \v 4 Mokonzi azalaki kosolola na Geazi, mosali ya moto na Nzambe, mpe alobaki : « Yebisa ngai makambo minene nyonso oyo moto na Nzambe, Elize, asalaki. » \p \v 5 Wana Geazi azalaki koyebisa mokonzi ndenge nini Elize asekwisaki ebembe ya mwana oyo akufaki, mama ya mwana yango ayaki kobondela mokonzi ete azongisa ndako mpe mabele na ye. Geazi alobaki : « Mokonzi, nkolo na ngai, tala mwasi oyo mpe mwana na ye ya mobali oyo Elize asekwisaki. » \p \v 6 Mokonzi atunaki na mwasi yango mpe ayebisaki ye makambo nyonso. Na sima, mokonzi aponaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe apesaki ye mitindo : « Zongisela ye biloko na ye nyonso mpe bambuma nyonso ya bilanga oyo mabele na ye ebotaki wuta mokolo oyo alongwaki na mboka na biso kino lelo. » \s1 Bokono ya Beni-Adadi mpe mokonzi Azaeli \p \v 7 Elize akendeki na Damasi, wana Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, azalaki kobela. Tango bayebisaki mokonzi ete moto na Nzambe akomi kati na engumba, \v 8 mokonzi alobaki na Azaeli : « Kamata likabo mpe kende kokutana na moto na Nzambe. Tuna Yawe na nzela ya moto na Nzambe : ‹ Boni, nakobika solo na bokono oyo ? › » \p \v 9 Azaeli akendeki kokutana na Elize, amemaki elongo na ye likabo ya biloko nyonso ya Damasi ; bamemaki yango na likolo ya bashamo tuku minei. Azaeli akitaki, atelemaki liboso ya Elize mpe alobaki : \pi1 — Mwana na yo ya mobali Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, atindi ngai ; atuni : « Boni, nakobika solo na bokono oyo ? » \p \v 10 Elize azongisaki : \pi1 — Loba na ye : « Solo, okobika na bokono oyo. » Nzokande, Yawe amonisi ngai ete akokufa. \p \v 11 Elize atalaki ye malamu-malamu, mpe Azaeli ayokaki soni. Mpe moto na Nzambe alelaki. \p \v 12 Azaeli atunaki : \pi1 — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolela ? \p Elize azongisaki : \pi1 — Mpo ete nayebi mabe oyo okosala bana ya Isalaele. Okozikisa bingumba na bango, oyo etongama makasi, okokata bilenge mibali na bango bakingo na mopanga, okoboma bana na bango ya mike, mpe okopasola mabumu ya basi na bango ya zemi. \p \v 13 Azaeli akamwaki mpe azongisaki : \pi1 — Mpo na nini okosala makambo ya boye na mosali na yo ? Ata kutu mbwa eleki ngai na tina ! \p Elize alobaki lisusu : \pi1 — Yawe amonisi ngai ete okokoma mokonzi ya Siri. \p \v 14 Azaeli atikaki Elize mpe azongaki epai ya mokonzi na ye. Bongo mokonzi na ye atunaki ye : \pi1 — Elize alobi na yo nini ? \p Azongisaki : \pi1 — Alobi na ngai : « Solo, okobika na bokono oyo. » \p \v 15 Mokolo oyo elandaki, Azaeli azwaki bulangeti, azindisaki yango na mayi, mpe afinikaki na yango elongi ya mokonzi mpo na kokanga ye pema ; mpe mokonzi akufaki. Azaeli akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Yorami, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 21.5-10, 20) \p \v 16 Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mitano na bokonzi —Jozafati azalaki mokonzi ya Yuda— Yorami, mwana mobali ya Jozafati, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi. \v 17 Azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi. \v 18 Alandaki nzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki mwana na ye ya mwasi. \v 19 Kasi Yawe alingaki te kobebisa Yuda mpo na Davidi, mowumbu na Ye, pamba te alakaki kopesa bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye mpo na libela. \p \v 20 Na tango ya Yorami, bato ya Edomi batombokelaki Yuda mpe bamipesaki mokonzi. \v 21 Boye Yorami akendeki na Tsayiri elongo na bashar na ye nyonso. Na butu, atelemaki mpe abetaki bato ya Edomi oyo bazingelaki ye elongo na bakonzi ya basoda oyo babundaka na bashar ; kasi basoda ya Yuda bakimaki na bandako na bango ya kapo. \v 22 Wuta mokolo wana kino lelo, Edomi etombokelaka kaka Yuda. Na tango wana, Libina mpe etombokaki. \p \v 23 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yorami mpe misala na ye nyonso ekomami na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \v 24 Yorami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Akazia, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 22.1-6) \p \v 25 Tango Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Akazia, mwana mobali ya Yorami, akomaki mokonzi ya Yuda. \v 26 Akazia azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mobu moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Atali. » Atali azalaki koko ya Omiri, mokonzi ya Isalaele. \v 27 Alandaki nzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki na libota ya Akabi. \v 28 Akazia akendeki elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Bato ya Arami bazokisaki Yorami. \v 29 Boye, mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na Rama, na bitumba oyo babundaki na Azaeli, mokonzi ya Siri. Akazia, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akendeki na Jizireyeli mpo na kotala Yorami, mwana mobali ya Akabi, pamba te bazokisaki ye. \c 9 \s1 Bapakoli Jewu mafuta lokola mokonzi ya Isalaele \p \v 1 Elize abengisaki moko kati na bayekoli ya basakoli mpe alobaki na ye : « Kanga mokaba na yo, zwa molangi oyo ya mafuta mpe kende na Ramoti ya Galadi. \v 2 Tango okokoma kuna, luka Jewu, mwana mobali ya Jozafati mpe koko ya Nimishi. Kende epai na ye, benda ye pembeni, mosika ya baninga na ye, mpe mema ye na shambre ya kati. \v 3 Bongo okozwa molangi, okosopa mafuta na moto na ye mpe okoloba : ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Napakoli yo mafuta oyo mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele. › Sima, okofungola ekuke mpe okokima ; kozela te ! » \p \v 4 Boye elenge mobali, mosakoli, akendeki na Ramoti ya Galadi. \v 5 Tango akomaki, akutaki bakonzi ya mampinga bavandi kati na lisanga. Alobaki : \pi1 — Nazali na sango mpo na yo mokonzi. \p Jewu atunaki : \pi1 — Mpo na nani kati na biso ? \p Mosakoli azongisaki : \pi1 — Mpo na yo mokonzi. \p \v 6 Jewu atelemaki mpe akotaki na ndako. Bongo mosakoli apakolaki mafuta na moto ya Jewu mpe alobaki : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Napakoli yo mafuta oyo mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele, bato ya Yawe. › \v 7 Osengeli koboma libota ya Akabi, mokonzi na yo, mpe nakozongisa mabe na mabe mpo na makila ya bawumbu na ngai, basakoli, mpe ya bawumbu nyonso ya Yawe, oyo Jezabeli asopaki makila na bango. \v 8 Solo, libota nyonso ya Akabi esengeli kokufa. Nakosilisa mibali nyonso kati na Isalaele, ezala mowumbu to monsomi. \v 9 Nakosala libota ya Akabi ndenge nasalaki libota ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe libota ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya. \v 10 Nzokande mpo na Jezabeli, bambwa ekolia ye kati na bilanga ya Jizireyeli, mpe moto moko te akokunda ye. » \p Boye mosakoli afungolaki ekuke mpe akimaki. \p \v 11 Tango Jewu abimaki mpe azongaki epai ya baninga na ye, bakonzi ya basoda, moko kati na bango atunaki ye : \pi1 — Boni, makambo nyonso ezali malamu ? Mpo na nini moto ya liboma oyo ayaki epai na yo ? \p Jewu azongisaki : \pi1 — Boyebi malamu moto yango mpe lolenge ya makambo oyo alobaka. \p \v 12 Bakonzi ya basoda balobaki : \pi1 — Ezali ya solo te, ozali kokosa biso ! Yebisa biso makambo yango. \p Jewu alobaki : \pi1 — Boyoka ndenge alobi na ngai : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Napakoli yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele. › » \p \v 13 Tango kaka bayokaki bongo, bakonzi ya basoda bakamataki na lombangu bakazaka na bango mpe batandaki yango liboso ya Jewu, na binyatelo ya ematelo. Bongo babetaki kelelo mpe bagangaki : « Jewu azali mokonzi ! » \s1 Jewu abomi Yorami mpe Akazia \p \v 14 Jewu, mwana mobali ya Jozafati, koko ya Nimishi, asalelaki Yorami likita. Nzokande Yorami mpe Isalaele mobimba bazalaki kobundela Ramoti ya Galadi liboso ya Azaeli, mokonzi ya Siri. \v 15 Kasi mokonzi Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bato ya Arami bazokisaki ye na bitumba na Azaeli, mokonzi ya Siri. Jewu alobaki : « Soki yango ezali makanisi na bino, tika ete moto moko te akima mpe abima na engumba mpo na kokende kopesa sango na Jizireyeli. » \p \v 16 Boye Jewu amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli mpo ete Yorami azalaki kopema kuna ; mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala ye. \p \v 17 Tango mokengeli oyo azalaki na likolo ya ndako molayi ya Jizireyeli amonaki mampinga ya Jewu kopusana, agangaki : « Nazali komona mampinga, bazali koya ! » \p Yorami apesaki mitindo : \pi1 — Bopona soda moko oyo abundaka likolo ya mpunda mpe botinda ye mpo ete akende kokutana na bango mpe atuna bango : « Boni, boyei mpo na kimia ? » \p \v 18 Soda oyo abundaka likolo ya mpunda akendeki mpe atunaki : \pi1 — Tala makambo oyo mokonzi alobi : « Boni, boyei mpo na kimia ? » \p Jewu azongisaki : \pi1 — Okokende na kimia wapi ? Baluka mpe kota na molongo na ngai. \p Mokengeli alobaki : \pi1 — Motindami akomi epai na bango, kasi azali kozonga te. \p \v 19 Boye mokonzi atindaki soda mosusu oyo abundaka likolo ya mpunda. Tango akomaki epai na bango, alobaki : \pi1 — Boni, boyei mpo na kimia ? \p Jewu azongisaki : \pi1 — Okokende na kimia wapi ? Baluka mpe kota na molongo na ngai. \p \v 20 Mokengeli alobaki : \pi1 — Motindami akomi penza epai na bango, kasi ye mpe azali kozonga te. Nzokande, lolenge oyo ya kotambolisa ezali lokola ya Jewu, mwana mobali ya Nimishi, oyo atambolisaka lokola moto ya liboma. \r (2Ma 22.7-9) \p \v 21 Yorami apesaki mitindo : « Bongisa shar na ngai. » \p Tango babongisaki shar, Yorami, mokonzi ya Isalaele, mpe Akazia, mokonzi ya Yuda, babimaki, moto na moto likolo ya shar na ye, mpo na kokende kokutana na Jewu. Bakutanaki na ye kati na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli. \v 22 Tango kaka Yorami amonaki Jewu, atunaki ye : \pi1 — Boni Jewu, oyei mpo na kimia ? \p Jewu azongisaki : \pi1 — Ndenge nini kimia ekoki kozala na tango losambo ya banzambe ya bikeko mpe kindoki ya mama na yo, Jezabeli, ezali kokoba ? \p \v 23 Yorami abalukaki mpe akimaki ; abelelaki Akazia : « Akazia, bateki biso ! » \p \v 24 Boye Jewu abendaki tolotolo mpe abetaki Yorami na kati-kati ya mapeka. Tolotolo etobolaki motema na ye, mpe akweyaki wuta na shar na ye. \v 25 Jewu alobaki na Bidikari, soda oyo amemelaka ye bibundeli : « Kamata ye mpe bwaka ye na bilanga ya Naboti, moto ya Jizireyeli. Kanisa ndenge nini ngai na yo tozalaki kokumba bashar elongo, na sima ya tata na ye, Akabi, tango Yawe apesaki lisakoli oyo na tina na ye : \v 26 ‹ Lobi, namonaki makila ya Naboti mpe ya bana na ye ya mibali, › elobi Yawe, mpe solo, nakofutisa yo yango na bilanga oyo, » elobi Yawe. Sik’oyo, kamata ye mpe bwaka ye na bilanga wana, kolanda Liloba na Yawe. \p \v 27 Tango Akazia, mokonzi ya Yuda, amonaki makambo oyo esalemaki, akimaki na nzela ya Beti-Agani. Jewu alandaki ye mpe agangaki : « Boma ye mpe lokola ! » \p Bazokisaki ye kati na shar na ye na nzela ya Guri, pembeni ya Yibileayimi, kasi akimaki na Megido mpe akufaki kuna. \v 28 Basali na ye bamemaki ye na shar kino na Yelusalemi mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na kunda na ye kati na engumba ya Davidi. \v 29 Akazia akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Yorami, mwana mobali ya Akabi. \s1 Kufa ya Jezabeli \p \v 30 Jewu akendeki na Jizireyeli. Tango Jezabeli ayokaki bongo, atiaki monzele na elongi na ye, abongisaki suki na ye mpe apusanaki pene ya lininisa mpo na kotala libanda. \v 31 Tango Jewu akotaki na ekuke ya engumba, Jezabeli atunaki na koganga : \pi1 — Zimiri, mobomi ya nkolo na yo, boni, oyei mpo na kimia ? \p \v 32 Jewu atombolaki miso na ngambo ya lininisa mpe agangaki : \pi1 — Nani kati na bino azali na ngambo na ngai, nani ? \p Bakengeli mibale to misato ya mokonzi, oyo baboma bango mokongo, batalaki Jewu wuta na lininisa. \v 33 Jewu apesaki bango mitindo : \pi1 — Bobwaka ye na se. \p Bongo babwakaki Jezabeli na se ; mpe makila na ye epanzanaki na mir mpe na bampunda tango ezalaki konyata ye. \v 34 Jewu akotaki, aliaki, amelaki mpe alobaki : « Bobongisa mwasi oyo alakelama mabe. Bokunda ye, pamba te azali mwana mwasi ya mokonzi. » \v 35 Kasi tango babimaki mpo na kokunda ye, bakutaki kaka mokuwa ya moto na ye, makolo mpe matandu ya maboko na ye. \v 36 Bazongaki mpe bayebisaki Jewu : « Tala liloba oyo Yawe alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya, moto ya mboka Tishibe : ‹ Bambwa ekolia nzoto ya Jezabeli kati na elanga ya Jizireyeli. \v 37 Ebembe ya Jezabeli ekozala lokola nyei kati na bilanga ya Jizireyeli mpo ete moto moko te akoka lisusu koloba : Tala Jezabeli ! › » \c 10 \s1 Jewu abomi libota ya mokonzi Akabi \p \v 1 Akabi azalaki na bana mibali tuku sambo na Samari. Jewu akomaki mikanda mpe atindaki yango na Samari epai ya bakalaka ya Jizireyeli, epai ya bampaka mpe epai ya babateli ya bana ya Akabi. Na mikanda yango, Jewu alobaki : \pmo \v 2 « Tango kaka mokanda oyo ekokomela bino, lokola bana mibali ya mokonzi na bino bazali elongo na bino, mpe lokola bozali na bashar mpe bampunda, engumba ya makasi mpe bibundeli, \v 3 bopona mwana mobali oyo aleki malamu mpe mayele kati na bana mibali ya mokonzi na bino, botia ye na kiti ya bokonzi ya tata na ye, mpe bobunda mpo na ndako ya mokonzi na bino. » \p \v 4 Kasi babangaki makasi mpe balobaki : « Soki kutu bakonzi mibale bakokaki te kobunda na ye, bongo ndenge nini biso tokobunda na ye ? » \p \v 5 Boye, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, moyangeli ya engumba, bampaka mpe babateli ya bana ya mokonzi batindaki sango oyo epai ya Jewu : « Tozali basali na yo mpe tokosala nyonso oyo okoloba. Tokotia moto mosusu te lokola mokonzi, tokosala nyonso oyo okomona malamu. » \p \v 6 Boye, Jewu akomelaki bango mokanda ya mibale oyo kati na yango alobaki : \pmo « Soki bozali na ngambo na ngai mpe bokotosa ngai, bozwa mito ya bana mibali nyonso ya mokonzi na bino mpe boya na yango epai na ngai, na Jizireyeli, lobi na tongo. » \p Nzokande bana mibali tuku sambo ya mokonzi bazalaki epai ya bato ya lokumu ya engumba, oyo bazalaki kobokola bango. \v 7 Tango mokanda ekomaki, bato wana bazwaki bana mibali ya mokonzi, babomaki bango nyonso tuku sambo, batiaki mito na bango na bitunga mpe batindaki yango epai ya Jewu, na Jizireyeli. \v 8 Ntoma moko akomaki mpe alobaki na Jewu : \pi1 — Bamemi mito ya bana mibali ya mokonzi. \p Bongo Jewu apesaki mitindo : \pi1 — Botia yango na mipiku mibale na ekuke ya engumba kino na tongo. \p \v 9 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jewu abimaki, atelemaki liboso ya bato nyonso mpe alobaki : \pi1 — Bosali na bino mabe te. Ezalaki ngai nde nasalelaki nkolo na ngai likita mpo na kotelemela ye mpe koboma ye ; kasi nani abomi bato oyo nyonso ? \v 10 Boyeba ete liloba moko te oyo Yawe alobaki mpo na kotelemela ndako ya Akabi ekozanga kokokisama. Yawe akokisi makambo oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, Eliya. \p \v 11 Boye Jewu abomaki bato nyonso ya ndako ya Akabi, oyo batikalaki na Jizireyeli : bato na ye nyonso ya lokumu, baninga na ye, Banganga-Nzambe na ye. Atikaki ata moto na ye moko te na bomoi. \v 12 Jewu atelemaki mpe akendeki na Samari. \p Na Beti-Ekedi-Aron\f + \fr 10.12 \fr*\ft Beti-Ekedi-Aron elingi koloba, na lokota ya Ebre : ndako ya babateli bibwele.\ft*\f*, \v 13 Jewu akutanaki na bandeko ya Akazia, mokonzi ya kala ya Yuda, mpe atunaki bango : \pi1 — Bozali banani ? \p Bazongisaki : \pi1 — Tozali bandeko ya Akazia. Toyei kopesa bana mibali ya mokonzi mpe mama ya mokonzi mbote. \p \v 14 Jewu apesaki mitindo : \pi1 — Bokanga bango ya bomoi. \p Boye bakangaki bango ya bomoi mpe bakataki bango bakingo, pene ya libulu ya Beti-Ekedi. Bazalaki mibali tuku minei na mibale, mpe Jewu atikaki moto moko te na bomoi. \p \v 15 Tango alongwaki kuna mpe akutanaki na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, oyo abandaki koya kokutana na ye, Jewu apesaki ye mbote mpe alobaki : \pi1 — Boni, motema na yo ezali sembo mpo na ngai, ndenge motema na ngai ezali mpo na yo ? \p Yonadabi azongisaki : \pi1 — Iyo, ezali bongo ! \p Jewu alobaki : \pi1 — Soki ezali bongo, pesa ngai loboko na yo. \p Boye, Yonadabi asalaki bongo, mpe Jewu asungaki ye mpo na komata na shar. \p \v 16 Jewu alobaki : \pi1 — Yaka elongo na ngai, mpe okomona bolingo makasi na ngai mpo na Yawe. \p Boye, Jewu amemaki ye na shar na ye. \p \v 17 Tango Jewu akomaki na Samari, abomaki bato nyonso ya libota ya Akabi, oyo batikalaki kuna. Jewu abomaki bango kolanda Liloba na Yawe oyo alobaki na nzela ya Eliya. \s1 Jewu abomi basambeli ya Bala \p \v 18 Jewu abengisaki bato nyonso mpe alobaki na bango : « Akabi azalaki kosalela Bala mingi te, kasi Jewu akosalela ye mingi. \v 19 Sik’oyo, bobengisa basakoli nyonso ya Bala, basambeli na ye nyonso mpe banganga-nzambe na ye nyonso. Bosala ete moto moko te azanga, pamba te nakobonza mbeka ya monene mpo na Bala. Moto nyonso oyo akozanga, akokufa. » \p Jewu asalelaki mayele mabe mpo na koboma basambeli ya Bala. \v 20 Jewu alobaki : « Bobengisa mayangani mpo na lokumu ya Bala. » \p Boye babengisaki mayangani yango. \p \v 21 Jewu apanzaki sango kati na Isalaele, basambeli nyonso ya Bala bayaki mpe moto moko te azangaki. Bakotaki ebele na ndako ya nzambe Bala mpe batondisaki yango kino na basuka nyonso. \v 22 Jewu alobaki na mobateli bilamba ya bonganga-nzambe ya Bala : « Yaka na bilamba mpo na basambeli nyonso ya Bala. » \p Boye abimisaki bilamba mpo na bango. \v 23 Bongo Jewu elongo na Yonadabi, mwana mobali ya Rekabi, bakotaki na ndako ya nzambe Bala. Jewu alobaki na basambeli ya Bala : « Botala malamu-malamu na zingazinga na bino mpo ete basali ya Yawe bazala elongo na bino te, kaka basali ya Bala. » \p \v 24 Bakotaki mpo na kobongisa bambeka mpe batumbaki yango. \p Nzokande, Jewu atiaki bato tuku mwambe libanda na likebisi oyo : « Soki moto moko kati na bino akimisi moko kati na bato oyo napesi na maboko na bino, akofuta bomoi na ye na motuya ya bomoi ya moto oyo akimi. » \p \v 25 Tango kaka Jewu asilisaki kobongisa mbeka ya kotumba, apesaki mitindo epai na bakengeli mpe na bakambi na bango : « Bokota mpe boboma bango. Bokimisa moto moko te. » \p Boye, babomaki bango na mopanga. Bakengeli mpe bakonzi ya basoda babwakaki bibembe na libanda mpe bakotaki kino na esika ya bule ya ndako ya nzambe Bala. \v 26 Babimisaki libanga ya bule na libanda ya ndako ya nzambe Bala mpe batumbaki yango. \v 27 Babukaki libanga yango ya bule, bakweyisaki ndako ya nzambe Bala mpe bakomisaki yango zongo kino na mokolo ya lelo. \v 28 Ezali bongo nde Jewu asukisaki losambo ya Bala kati na Isalaele. \p \v 29 Kasi Jewu atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu. Lisumu yango ezali : kosambela bikeko ya bangombe ya wolo, na Beteli mpe na Dani. \p \v 30 Yawe alobaki na Jewu : « Lokola osali malamu mpo na kokokisa oyo ezali sembo na miso na Ngai, mpe lokola osali na libota ya Akabi nyonso oyo nakanaki kosala, bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. » \p \v 31 Nzokande, Jewu asalaki bokebi te mpo na kobatela mibeko ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na motema na ye mobimba. Atikaki te masumu ya Jeroboami oyo, na nzela na yango, akweyisaki Isalaele na lisumu. \v 32 Na tango wana, Yawe abandaki kokomisa moke bandelo ya Isalaele. Azaeli alongaki bana ya Isalaele, na mokili na bango, \v 33 na este ya Yordani, na etuka nyonso ya Galadi (mabele ya libota ya Gadi, ya Ribeni mpe ya Manase), longwa na Aroeri oyo ezali pembeni ya moluka ya Arinoni kino na Galadi mpe Bashani. \p \v 34 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jewu, misala na ye nyonso mpe elonga na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \v 35 Jewu akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Bongo Yoakazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \v 36 Jewu akonzaki Isalaele, na Samari mibu tuku mibale na mwambe. \c 11 \s1 Atali mpe Joasi \r (2Ma 22.10–23.21) \p \v 1 Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya mokonzi. \v 2 Kasi Yeosheba, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe ndeko ya Akazia, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia ; alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto, mpo na kobomba ye mosika ya miso ya Atali ; mpe Atali abomaki Joasi te. \v 3 Abombamaki elongo na ndesi na ye mibu motoba kati na Tempelo ya Yawe, wana Atali azalaki kokonza mokili. \p \v 4 Na mobu ya sambo, Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko ya bato ya Kari\f + \fr 11.4 \fr*\ft Bato ya Kari bazalaki basoda ya bapaya na mokili ya Azia ya kati.\ft*\f* mpe bakengeli. Abengisaki bango epai na ye kati na Tempelo ya Yawe, asalaki boyokani elongo na bango, alapisaki bango ndayi kati na Tempelo ya Yawe mpe alakisaki bango mwana mobali ya mokonzi. \v 5 Apesaki bango mitindo oyo : « Tala ndenge bokosala : kati na bandambo misato ya lisanga na bino, ndambo moko bakosala na mokolo ya Saba ; ndambo ya liboso bakokengela ndako ya mokonzi, \v 6 ndambo ya mibale bakozala na ekuke ya Suri, mpe ndambo ya misato bakokengela ekuke, na sima ya ndako ya bakengeli. Bandambo nyonso misato bakokitana, moko sima na mosusu, kati na mosala ya kokengela Tempelo. \v 7 Bandambo mibale oyo bakosala te na mokolo ya Saba bakokengela Tempelo ya Yawe mpo na mokonzi. \v 8 Bakozingela mokonzi, moto na moto na ebundeli na ye na loboko. Moto nyonso oyo akopusana na molongo na bino, bosengeli koboma ye. Bozala pene ya mokonzi na bisika nyonso oyo akokende. » \p \v 9 Bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko basalaki nyonso oyo Nganga-Nzambe Yeoyada atindaki. Moko na moko akamataki basoda na ye, ba-oyo bazalaki kokota na mosala na mokolo ya Saba mpe ba-oyo basilisaki mosala na bango na mokolo yango, mpe akendeki epai ya Nganga-Nzambe Yeoyada. \v 10 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko makonga mpe banguba oyo ezalaki ya mokonzi Davidi, oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe. \v 11 Bakengeli bazingelaki mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko, pembeni ya etumbelo mpe ya Tempelo, wuta na ngambo ya sude kino na ngambo ya nor ya Tempelo. \v 12 Nganga-Nzambe Yeoyada abimisaki mwana mobali ya mokonzi, alatisaki ye motole mpe apesaki ye mokanda ya boyokani. Bakomisaki ye mokonzi mpe bapakolaki ye mafuta ya bokonzi. Bato babetaki maboko mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! » \p \v 13 Tango Atali ayokaki makelele oyo bato mpe bakengeli bazalaki kosala, akendeki epai ya bato, na Tempelo ya Yawe. \v 14 Atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo ya kolobela, ndenge ezalaki momesano. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi ; bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : « Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita ! » \p \v 15 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki mitindo epai ya bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko : « Bobimisa ye na molongo ! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye ! » Pamba te Nganga-Nzambe alobaki : « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe ! » \p \v 16 Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna. \p \v 17 Yeoyada asalaki boyokani kati na Yawe, mokonzi mpe bato, mpo ete bazala bato ya Yawe ; asalaki lisusu boyokani kati na mokonzi mpe bato. \v 18 Bato nyonso ya mokili bakendeki na ndako ya nzambe Bala mpe babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo. Nganga-Nzambe Yeoyada atiaki bakengeli ya Tempelo ya Yawe. \v 19 Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya Kari, bakengeli mpe bato nyonso ya mokili ; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya bakengeli. Bongo Joasi avandaki na kiti na ye ya bokonzi. \v 20 Bato nyonso ya mokili basepelaki, mpe engumba ekomaki na kimia, pamba te babomaki Atali na mopanga kati na ndako ya mokonzi. \s1 Joasi abongisi Ndako ya Nzambe \r (2Ma 24.1-14; 24.23-27) \p \v 21 Joasi azalaki na mibu sambo ya mbotama tango akomaki mokonzi. \c 12 \p \v 1 Ezalaki tango Jewu akokisaki mibu sambo na bokonzi nde Joasi akomaki mokonzi. Joasi akonzaki mibu tuku minei na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Tsibia. » Tsibia azalaki moto ya Beri-Sheba. \v 2 Joasi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe na mikolo nyonso oyo Nganga-Nzambe Yeoyada azalaki koteya ye. \v 3 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. \p \v 4 Joasi alobaki na Banganga-Nzambe : « Bosangisa mbongo nyonso oyo bamemi lokola makabo ya bule kati na Tempelo ya Yawe : mbongo oyo bazwi na nzela ya kotanga bato, mbongo oyo bazwi lokola mpako mpo na kosikola bato kolanda motuya oyo ekatama, mpe mbongo oyo moto na moto apesi na Ndako ya Nzambe na motema ya esengo. \v 5 Tika ete Nganga-Nzambe moko na moko akamata mbongo na maboko ya babombi mbongo mpe basalela yango mpo na kobongisa eloko nyonso oyo ebebi kati na Ndako ya Nzambe. » \p \v 6 Kasi tango mokonzi Joasi akokisaki mibu pene tuku mibale na misato na bokonzi, Banganga-Nzambe babongisaki nanu Ndako ya Nzambe te. \v 7 Boye, mokonzi Joasi abengisaki Nganga-Nzambe Yeoyada mpe Banganga-Nzambe mosusu. Atunaki bango : « Mpo na nini bozali kobongisa te biloko oyo ebebi kati na Ndako ya Nzambe ? Sik’oyo, bokozwa lisusu mbongo te na maboko ya babombi mbongo na bino, kasi botika yango mpo na kobongisa Ndako ya Nzambe. » \p \v 8 Banganga-Nzambe bandimaki kotika kokongola mbongo na maboko ya bato mpe kotika kobongisa Ndako ya Nzambe. \v 9 Nganga-Nzambe Yeoyada akamataki sanduku moko mpe atobolaki mofinuku na yango. Atiaki sanduku pembeni ya etumbelo, na ngambo ya loboko ya mobali tango ozali kokota kati na Tempelo ya Yawe. Banganga-Nzambe oyo bazalaki kobatela ekuke batiaki kati na sanduku mbongo nyonso oyo bazalaki komema na Tempelo ya Yawe. \v 10 Tango nyonso bazalaki komona ete mbongo ekomi ebele kati na sanduku, mokomi mikanda ya mokonzi elongo na mokonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki koya kotanga mbongo oyo bato bazalaki komema na Tempelo ya Yawe ; bongo bazalaki kotia yango na basaki. \v 11 Soki bayebi motuya na yango, bazalaki kopesa mbongo yango epai ya bato oyo bazalaki kosalisa misala kati na Ndako ya Nzambe. Na mbongo yango, bazalaki kofuta bato oyo bazalaki kosala kati na Tempelo ya Yawe : basharipantie, \v 12 batongi ndako mpe bato oyo bakataka mabanga. Bazalaki kosomba mpo na kobongisa Ndako ya Nzambe : mabaya mpe mabanga bakata. Bazalaki mpe kobimisa mbongo mpo na misala mosusu ya kobongisa Tempelo ya Yawe. \v 13 Kasi bazalaki kobimisa te mbongo oyo bazalaki komema na Ndako ya Nzambe, mpo na kosalela basani ya minene ya palata, bambeli, basani oyo babwakelaka na yango mayi, bakelelo mpe biloko mosusu oyo esalemi na wolo to na palata mpo na Tempelo ya Yawe. \v 14 Mbongo yango ezalaki bobele mpo na kofuta basali oyo bazalaki kobongisa Ndako ya Yawe. \v 15 Bazalaki kolandela te mbongo oyo bapesaki na bato mpo na kofuta basali, pamba te bazalaki kosalela yango na bosembo. \v 16 Bazalaki komema te na Tempelo ya Yawe, mbongo oyo ewutaki na makabo ya kimia mpe na mbeka mpo na masumu ; yango ezalaki mpo na Banganga-Nzambe. \s1 Suka ya mokonzi Joasi \p \v 17 Na tango wana, Azaeli, mokonzi ya Siri, akendeki kobundisa engumba Gati mpe abotolaki yango. Sima, Azaeli abalukaki mpo na kobundisa Yelusalemi. \v 18 Kasi Joasi, mokonzi ya Yuda, azwaki biloko nyonso ya bule oyo bakoko na ye —Jozafati, Yorami mpe Akazia, bakonzi ya Yuda— babulisaki. Joasi azwaki mpe bakado oyo ye moko abulisaki mpe wolo nyonso oyo amonaki kati na bibombelo ya bozwi ya Tempelo ya Yawe mpe na ndako ya mokonzi. Atindaki yango epai ya Azaeli, mokonzi ya Siri. Sima na yango, Azaeli akendeki mosika ya Yelusalemi. \p \v 19 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \v 20 Basali na ye batombokelaki ye mpe basalelaki ye likita. Babomaki Joasi, na Beti-Milo, na nzela oyo ekenda na Sila. \v 21 Tala bakombo ya basali oyo babomaki Joasi : Yozabadi, mwana mobali ya Shimeati, mpe Yeozabadi, mwana mobali ya Shomeri. Joasi akufaki mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Amatsia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 13 \s1 Yoakazi, mokonzi ya Isalaele \p \v 1 Na mobu ya tuku mibale na misato ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Akazia, mokonzi ya Yuda, Yoakazi, mwana mobali ya Jewu, akomaki mokonzi ya Isalaele kati na Samari. Akonzaki mibu zomi na sambo. \v 2 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, wana alandaki masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati. Jeroboami akweyisaki na yango Isalaele na lisumu, mpe Yoakazi atikaki te lisumu yango. \v 3 Boye kanda ya Yawe epelaki likolo ya Isalaele, mpe akabaki Isalaele na maboko ya Azaeli, mokonzi ya Siri, mpe ya Beni-Adadi, mwana na ye ya mobali. \v 4 Kasi Yoakazi abondelaki Yawe mpo ete asalela ye ngolu, mpe Yawe ayokaki ye, pamba te Yawe amonaki ndenge nini mokonzi ya Siri azalaki konyokola Isalaele. \v 5 Yawe apesaki mokangoli mpo na bato ya Isalaele, mpe balongwaki na se ya nguya ya bato ya Siri. Boye bato ya Isalaele bavandaki na bandako na bango ndenge ezalaki liboso. \v 6 Kasi batikaki te masumu ya libota ya Jeroboami oyo akweyisaki na yango Isalaele. Bakobaki kaka na yango ; mpe ekeko ya nzambe mwasi Ashera etikalaki kaka ya kotelema kati na Samari. \v 7 Kati na mampinga nyonso ya Yoakazi, etikalaki kaka na mibali tuku mitano oyo batambolisaka bampunda, bashar zomi, mpe basoda oyo batambolaka na makolo, nkoto zomi, pamba te mokonzi ya Siri abomaki bamosusu oyo batikalaki, mpe akomisaki bango lokola putulu oyo banyataka na makolo. \p \v 8 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yoakazi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \v 9 Yoakazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Bongo Joasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Joasi, mokonzi ya Isalaele \p \v 10 Na mobu ya tuku misato na sambo ya bokonzi ya Joasi, mokonzi ya Yuda, Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, akomaki mokonzi ya Isalaele kati na Samari. Akonzaki mibu zomi na motoba. \v 11 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo akweyisaki na yango Isalaele. Joasi akobaki kaka na masumu yango. \v 12 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi mpe misala na ye nyonso, bakisa bitumba oyo abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \v 13 Joasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe Jeroboami akitanaki na ye na bokonzi. Bakundaki Joasi kati na Samari esika moko na bakonzi ya Isalaele. \s1 Bokono mpe kufa ya Elize \p \v 14 Elize abelaki bokono oyo ememaki ye na kufa. Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kotala ye mpe alelaki na miso na ye na maloba oyo : \pi1 — Tata na ngai ! Tata na ngai ! Ozali bashar mpe bampunda ya Isalaele ! \p \v 15 Elize alobaki na ye : \pi1 — Zwa tolotolo moko mpe ndambo ya makonga ya mike. \p Joasi asalaki bongo. \v 16 Bongo Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele : \pi1 — Simba tolotolo na maboko na yo. \p Tango Joasi asimbaki tolotolo, Elize atiaki maboko na ye na likolo ya maboko ya mokonzi. \v 17 Elize alobaki : \pi1 — Fungola lininisa oyo ezali na ngambo ya este. \p Joasi afungolaki yango. Elize alobaki : \pi1 — Beta ! \p Joasi abetaki. \p Elize alobaki : \pi1 — Ezali likonga ya elonga ya Yawe, likonga ya elonga liboso ya bato ya Siri. Okosilisa bato ya Siri, na Afeki. \m \v 18 Bongo Elize abakisaki : \pi1 — Zwa makonga. \p Mokonzi azwaki yango. Elize alobaki na mokonzi ya Isalaele : \pi1 — Beta yango na mabele. \p Joasi abetaki yango mbala misato mpe atikaki. \v 19 Moto na Nzambe asilikelaki ye mpe alobaki : \pi1 — Ebongaki na yo kobeta yango na mabele mbala mitano to mbala motoba, boye olingaki kolonga bato ya Siri mpe kosilisa bango nye. Kasi sik’oyo, okolonga bato ya Siri kaka mbala misato. \p \v 20 Elize akufaki, mpe bakundaki ye. Nzokande masanga ya bato mabe ya Moabi bazalaki kokota na mokili ya Isalaele na ebandeli ya mibu nyonso. \v 21 Mokolo moko, tango bazalaki kokunda moto moko, bamonaki na mbalakata lisanga moko ya bato mabe. Bongo, babwakaki na lombangu ebembe ya moto yango kati na kunda ya Elize. Tango ebembe etutaki mikuwa ya Elize, moto yango azongaki na bomoi mpe atelemaki. \p \v 22 Azaeli, mokonzi ya Siri, anyokolaki Isalaele, na tango ya bokonzi ya Yoakazi. \v 23 Kasi Yawe asalelaki bango ngolu, ayokelaki bango mawa, mpe azongelaki bango, mpo na boyokani na Ye elongo na Abrayami, Izaki mpe Jakobi. Na tango wana, Yawe alingaki koboma bango te mpe aboyaki kobengana bango mosika ya miso na Ye. \p \v 24 Azaeli, mokonzi ya Siri, akufaki, mpe Beni-Adadi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \v 25 Bongo Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, abotolaki na maboko ya Beni-Adadi, mwana ya Azaeli, bingumba oyo Azaeli abotolaki na bitumba epai ya Yoakazi, tata ya Joasi. Joasi alongaki Azaeli mbala misato mpe abotolaki bingumba ya Isalaele. \c 14 \s1 Amatsia, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 25.1-4, 11-12) \p \v 1 Na mobu ya mibale ya bokonzi ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele, Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi. \v 2 Amatsia azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yeoyadani. » Yeoyadani azalaki moto ya Yelusalemi. \v 3 Amatsia asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi ezalaki te lokola Davidi, koko na ye. Na makambo nyonso, alandaki ndakisa ya Joasi, tata na ye. \v 4 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. \p \v 5 Sima na Amatsia kolendisa bokonzi na ye, abomaki bakalaka oyo babomaki tata na ye. \v 6 Kasi abomaki te bana mibali ya babomi ya tata na ye, pamba te, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Mobeko ya Moyize, Yawe apesaki mitindo oyo : « Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. » \p \v 7 Ezali Amatsia nde moto alongaki bato ya Edomi, nkoto zomi na Lubwaku ya Mungwa, mpe abotolaki na bitumba engumba ya Sela ; mpe abengaki yango « Yokiteyeli, » kombo oyo babengelaka yango kino lelo. \s1 Isalaele elongi Yuda \r (2Ma 25.17–26.2) \p \v 8 Bongo Amatsia atindaki bantoma epai ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi mpe koko ya Jewu, mokonzi ya Isalaele, mpo na koyebisa ye : \pi1 — Yaka tobunda ! \p \v 9 Kasi Joasi, mokonzi ya Isalaele, azongiselaki Amatsia, mokonzi ya Yuda : \pi1 — Mokolo moko, nzete ya sende ya Libani etindaki maloba epai ya nzete ya sedele ya Libani : « Balisa mwana na yo ya mwasi epai ya mwana na ngai ya mobali. » Kasi nyama moko ya zamba elekaki mpe enyataki nzete ya sende. \v 10 Solo, olongi Edomi, mpe motema na yo ezali komikumisa. Sepela na yo, kasi vanda na ndako na yo. Mpo na nini koluka ete pasi makasi ekweyela yo elongo na Yuda ? \p \v 11 Kasi Amatsia ayokaki ye te. Boye, Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kobundisa Amatsia, mokonzi ya Yuda. Ye mpe Amatsia, mokonzi ya Yuda, babundaki na Beti-Shemeshi kati na mokili ya Yuda. \v 12 Isalaele alongaki Yuda, mpe bato ya Yuda bakimaki, moto na moto na ndako na ye. \v 13 Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Akazia, na Beti-Shemeshi. Boye Joasi akendeki na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka. \v 14 Akamataki wolo nyonso, palata nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi ; akangaki bato na bowumbu mpe azongaki na Samari. \p \v 15 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joasi, misala na ye mpe elonga na ye tango abundisaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \v 16 Joasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele. Mpe Jeroboami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \p \v 17 Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, awumelaki lisusu na bomoi mibu zomi na mitano sima na kufa ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele. \v 18 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amatsia mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \v 19 Basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye, mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna. \v 20 Bamemaki nzoto na ye na likolo ya mpunda mpe bakundaki ye na Yelusalemi, esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. \p \v 21 Bato nyonso ya Yuda bakamataki Azaria oyo azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama mpe bakomisaki ye mokonzi na esika ya tata na ye, Amatsia. \v 22 Ezalaki ye nde moto atongaki lisusu engumba ya Eyilati mpe azongisaki yango na Yuda sima na kufa ya tata na ye, mokonzi Amatsia. \s1 Jeroboami II, mokonzi ya Isalaele \p \v 23 Tango Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi, akokisaki mibu zomi na mitano na bokonzi, Jeroboami, mwana mobali ya Joasi, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari mpe akonzaki mibu tuku minei na moko. \v 24 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe atikaki te masumu nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. \v 25 Ezalaki ye nde moto abotolaki lisusu bamboka ya Isalaele longwa na Lebo-Amati kino na ebale monene ya Araba, kolanda Liloba na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo alobaki na nzela ya mosali na Ye, mosakoli Yona, mwana mobali ya Amitayi, moto ya Gati-Eferi. \v 26 Yawe amonaki ndenge nini bana nyonso ya Isalaele bazalaki konyokwama. Ezala bawumbu to bansomi, moto moko te akokaki kosunga bango. \v 27 Lokola Yawe alobaki te ete akolimwisa kombo ya Isalaele na se ya moyi, abikisaki bango na nzela ya loboko ya Jeroboami, mwana mobali ya Joasi. \p \v 28 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jeroboami, misala na ye nyonso mpe elonga na ye na bitumba, ezala ndenge azongisaki na se ya bokonzi ya Isalaele Damasi mpe Amati, bingumba mibale oyo ezalaki ya Yuda, nyonso wana ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \v 29 Jeroboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye, bakonzi ya Isalaele ; mpe Zakari, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 15 \s1 Azaria, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 26.3-4, 21-23) \p \v 1 Tango Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi, Azaria, mwana mobali ya Amatsia, akomaki mokonzi ya Yuda. \v 2 Azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yekolia. » Yekolia azalaki moto ya Yelusalemi. \v 3 Azaria asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Amatsia, tata na ye, asalaki. \v 4 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. \v 5 Yawe abetaki mokonzi, mpe mokonzi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Boye akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika. Yotami, mwana mobali ya mokonzi, oyo azalaki mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili. \p \v 6 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Azaria mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \v 7 Azaria akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi ; mpe Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Zakari, mokonzi ya Isalaele \p \v 8 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Zakari, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari ; mpe akonzaki basanza motoba. \v 9 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge bakoko na ye basalaki. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. \v 10 Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, asalelaki Zakari likita, abundisaki ye liboso ya bato, abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi. \v 11 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Zakari, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \p \v 12 Boye nde Liloba oyo Yawe alobaki na Jewu ekokisamaki : « Bakitani na yo bakovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele kino na molongo ya minei. » \s1 Shalumi, mokonzi ya Isalaele \p \v 13 Tango Oziasi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, akomaki mokonzi. Akonzaki na Samari sanza moko. \v 14 Bongo Menayeme, mwana mobali ya Gadi, alongwaki na Tiritsa mpe akendeki na Samari. Abundisaki Shalumi, mwana mobali ya Yabeshi, na Samari ; abomaki ye mpe akitanaki na ye na bokonzi. \v 15 Makambo mosusu oyo etali Shalumi, misala na ye mpe likita oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \p \v 16 Na tango wana, Menayeme abundisaki engumba Tifisa, abomaki bato nyonso ya engumba mpe abebisaki zingazinga na yango, kobanda na Tiritsa, pamba te baboyaki kofungolela ye bikuke ya engumba na bango. Abebisaki engumba yango mpe atobolaki mabumu ya basi nyonso ya zemi. \s1 Menayeme, mokonzi ya Isalaele \p \v 17 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na libwa na bokonzi, Menayeme, mwana mobali ya Gadi, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki na Samari mibu zomi. \v 18 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Na tango nyonso ya bokonzi na ye, atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. \v 19 Bongo Puli, mokonzi ya Asiri, akotaki na makasi kati na mboka, mpe Menayeme apesaki ye bakilo ya palata, nkoto tuku misato na minei mpo ete Puli asunga ye na kolendisa bokonzi na ye. \v 20 Menayeme azwaki palata yango na Isalaele. Mozwi nyonso asengelaki kofuta mpako ya mbongo ya bibende ya palata, tuku mitano mpo ete bapesa yango epai ya mokonzi ya Asiri. Na bongo, mokonzi ya Asiri alongwaki na mokili mpe azongaki epai na ye. \p \v 21 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Menayeme mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \v 22 Menayeme akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Pekakia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Pekakia, mokonzi ya Isalaele \p \v 23 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na bokonzi, Pekakia, mwana mobali ya Menayeme, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari, mpe akonzaki mibu zomi na mibale. \v 24 Pekakia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. \v 25 Moko kati na bakonzi na ye ya basoda, Peka, mwana mobali ya Remalia, asalelaki ye likita. Na lisungi ya bato tuku mitano ya Galadi, Peka abomaki Pekakia kati na ndako ya mokonzi, na Samari, na lisungi ya Arigobi mpe Arie. Boye Peka abomaki Pekakia mpe akitanaki na ye na bokonzi. \v 26 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Pekakia mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \s1 Peka, mokonzi ya Isalaele \p \v 27 Tango Azaria, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mitano na mibale na bokonzi, Peka, mwana mobali ya Remalia, akomaki mokonzi ya Isalaele, na Samari ; mpe akonzaki mibu tuku mibale. \v 28 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Atikaki te masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, masumu oyo na nzela na yango akweyisaki Isalaele. \v 29 Na tango ya Peka, mokonzi ya Isalaele, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kokota na makasi mpe azwaki bingumba Iyoni, Abele-Beti-Maaka, Yanoa, Kedeshi, Atsori mpe Galadi. Akamataki lisusu Galile kati na mokili ya Nefitali, mpe amemaki na makasi bato na Asiri. \v 30 Bongo Oze, mwana mobali ya Ela, asalaki likita mpo na kotelemela Peka, mwana mobali ya Remalia. Abundisaki ye mpe abomaki ye, bongo akitanaki na ye na bokonzi tango Yotami, mwana mobali ya Oziasi, akokisaki mibu tuku mibale na bokonzi. \v 31 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Peka mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \s1 Yotami, mokonzi ya Yuda \p \v 32 Tango Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu mibale na bokonzi, Yotami, mwana mobali ya Oziasi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi. \r (2Ma 27.1-4, 7-9) \p \v 33 Yotami azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yerusha. » Yerusha azalaki mwana ya Tsadoki. \v 34 Yotami asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Oziasi, tata na ye, asalaki. \v 35 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. Ezali Yotami nde atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe. \v 36 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yotami mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \p \v 37 Na mikolo wana, Yawe abandaki kotinda Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mpo na kobundisa Yuda. \v 38 Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 16 \s1 Akazi, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 28.1-27) \p \v 1 Na mobu ya zomi na sambo ya bokonzi ya Peka, mwana mobali ya Remalia, Akazi, mwana mobali ya Yotami, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi. \v 2 Akazi azalaki na mibu tuku mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye ; nzokande, Davidi, koko na ye, asalaki makambo ya sembo. \v 3 Alandaki banzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango, atumbaki ata mwana na ye ya mobali na moto lokola mbeka, kolanda misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bana ya Isalaele. \v 4 Abonzaki bambeka mpe atumbaki mbeka ya malasi, na bisambelo ya likolo ya bangomba, na bangomba mike mpe na se ya banzete ya mibesu. \p \v 5 Bongo Retsini, mokonzi ya Siri, mpe Peka, mwana mobali ya Remalia, mokonzi ya Isalaele, bamataki mpo na kobundisa Yelusalemi mpe bazingelaki Akazi, kasi bakokaki kolonga ye te. \v 6 Na tango wana, Retsini, mokonzi ya Siri, azongisaki Eyilati na se ya bokonzi ya Siri. Abenganaki bato ya Yuda oyo bazalaki na Efrate, mpe bato ya Edomi bayaki kovanda kuna kino lelo. \v 7 Akazi atindaki bantoma epai ya Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, mpo na koloba na ye : « Nazali mosali na yo mpe mwana na yo ; yaka kokangola ngai na maboko ya mokonzi ya Siri mpe mokonzi ya Isalaele oyo bayei kobundisa ngai. » \p \v 8 Akazi azwaki palata mpe wolo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi ; bongo atindaki yango lokola kado epai ya mokonzi ya Asiri. \v 9 Mokonzi ya Asiri ayokaki ye, akendeki kobundisa Damasi mpe abotolaki yango. Amemaki bato ya Damasi na bowumbu na Kiri mpe abomaki Retsini. \p \v 10 Bongo mokonzi Akazi akendeki na Damasi mpo na kokutana na Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri ; amonaki etumbelo oyo ezalaki na Damasi mpe atindaki epai ya Nganga-Nzambe Uri elilingi na yango ndenge batongaki yango. \v 11 Boye Nganga-Nzambe Uri atongaki etumbelo kolanda elilingi oyo mokonzi Akazi atindaki wuta na Damasi, mpe asilisaki kotonga yango liboso ete mokonzi Akazi azonga wuta na Damasi. \v 12 Tango mokonzi Akazi azongaki wuta na Damasi, amonaki etumbelo, apusanaki pene na yango mpe abonzaki bambeka na likolo na yango. \v 13 Atumbaki mbeka na ye mpe likabo ya gato, asopaki likabo ya masanga mpe abwakaki makila ya bambeka ya boyokani na likolo ya etumbelo. \v 14 Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe, alongolaki yango na esika na yango liboso ya Ndako ya Nzambe, kati na etumbelo ya sika mpe Tempelo ya Yawe, mpe atiaki yango pembeni ya etumbelo ya sika, na ngambo ya nor. \v 15 Mokonzi Akazi apesaki mitindo epai ya Nganga-Nzambe Uri : « Na likolo ya etumbelo monene ya sika, okobanda kobonza mbeka ya kotumba na tongo mpe likabo ya gato na pokwa, mbeka ya kotumba ya mokonzi elongo na likabo na yango ya gato, mpe mbeka ya kotumba ya bato nyonso ya mokili elongo na likabo na bango ya masanga. Okobwaka na etumbelo makila ya bambeka nyonso ya kotumba mpe ya bambeka mosusu. Kasi mpo na oyo etali etumbelo ya bronze, nakokanisa mosala nini nakosala na yango. » \p \v 16 Nganga-Nzambe Uri asalaki ndenge kaka mokonzi Akazi atindaki. \p \v 17 Mokonzi Akazi alongolaki mabaya oyo esimbaka bamesa, mpe alongolaki basani ya minene na likolo na yango ; akitisaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na likolo ya bikeko ya bangombe mpe atiaki yango na likolo ya mabanga babongisa malamu. \v 18 Abongolaki shambre ya Saba ya kokotela oyo batongaki na kati ya Ndako ya Nzambe ; abongolaki lisusu ekuke ya mokonzi oyo batongaki na libanda ya Tempelo ya Yawe mpo na kosepelisa mokonzi ya Asiri. \p \v 19 Makambo mosusu oyo etali mokonzi Akazi mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \v 20 Akazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Ezekiasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 17 \s1 Oze, mokonzi ya Isalaele \p \v 1 Tango Akazi, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na mibale na bokonzi, Oze, mwana mobali ya Ela, akomaki mokonzi ya Isalaele na Samari. Akonzaki mibu libwa. \v 2 Oze asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, kasi ndenge moko te na bakonzi ya Isalaele, oyo bazalaki liboso na ye. \r (2Ba 18.9-12) \p \v 3 Salimanasari, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Oze. Mpe Oze akomaki mowumbu mpe akomaki kofuta mpako epai ya Salimanasari. \v 4 Kasi mokonzi ya Asiri asosolaki ete Oze asaleli ye likita, pamba te Oze atindaki bantoma epai ya So, mokonzi ya Ejipito, mpe atikaki kofuta mpako epai ya mokonzi ya Asiri ndenge azalaki kosala mobu na mobu. Boye Salimanasari akangaki Oze mpe atiaki ye na boloko. \v 5 Mokonzi ya Asiri akotaki na makasi na mokili mobimba, abundisaki Samari mpe azingelaki yango mibu misato. \v 6 Tango Oze akokisaki mibu libwa na bokonzi, mokonzi ya Asiri abotolaki Samari mpe amemaki bana ya Isalaele na bowumbu na Asiri. Atiaki bango na Ala mpe na bapembeni ya ebale ya Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi. \s1 Tina ya bowumbu ya Isalaele \p \v 7 Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele basalaki masumu liboso ya Yawe, Nzambe na bango, oyo abimisaki bango wuta na bokonzi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito ; bagumbamelaki banzambe mosusu. \b \p \v 8 Balandaki bizaleli ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso na bango mpe makambo oyo bakonzi ya Isalaele bakotisaki. \v 9 Bato ya Isalaele basalaki na nkuku makambo ya nkele na miso ya Yawe, Nzambe na bango. Batongaki bisambelo ya likolo ya bangomba kati na bingumba na bango nyonso, kobanda na likolo ya bamir ya lopango kino na bingumba batonga makasi. \v 10 Batelemisaki mabanga ya bule mpe makonzi ya nzambe mwasi Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu. \v 11 Batumbaki ansa na bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba, ndenge bikolo oyo Yawe abenganaki liboso na bango ezalaki kosala. Basalaki makambo mabe oyo etumbolaki kanda ya Yawe. \v 12 Bagumbamelaki banzambe ya bikeko oyo na tina na yango Yawe alobaki : « Bokosala bongo te. » \p \v 13 Yawe akebisaki Isalaele mpe Yuda na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli mpe bamoni makambo, na maloba oyo : « Botika banzela na bino ya mabe, bobatela mibeko mpe bikateli na Ngai kolanda mibeko nyonso oyo napesaki bino mpe bakoko na bino na nzela ya basali na Ngai, basakoli. » \p \v 14 Kasi bayokaki te ; batiaki moto makasi lokola bakoko na bango, oyo baboyaki kondimela Yawe, Nzambe na bango. \v 15 Babwakaki bikateli na Ye, boyokani oyo asalaki elongo na bakoko na bango mpe makebisi oyo apesaki bango. Balandaki bikolo oyo ezalaki zingazinga na bango. Yawe apesaki bango mitindo ete basala te lokola bango, kasi bango basalaki kaka makambo oyo Yawe apekisaki bango kosala. \v 16 Batikaki mitindo nyonso ya Yawe, Nzambe na bango, mpe bamisalelaki banzambe ya bikeko ya bana ngombe mibale basala na bibende oyo banyangwisa na moto, mpe likonzi ya nzambe mwasi Ashera. Bango nyonso bagumbamelaki mampinga nyonso ya likolo, mpe basambelaki nzambe Bala. \v 17 Batumbaki na moto lokola mbeka bana na bango ya mibali mpe bana na bango ya basi. Basalelaki soloka mpe kindoki, mpe bamikabaki mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe. Boye batumbolaki kanda ya Yawe. \v 18 Yawe asilikelaki makasi bana ya Isalaele mpe abenganaki bango mosika na Ye. Kaka libota ya Yuda nde batikalaki. \v 19 Nzokande, libota yango mpe ya Yuda babatelaki te mitindo ya Yawe, Nzambe na bango, balandaki bizaleli oyo Isalaele akotisaki. \v 20 Boye, Yawe abwakaki bana nyonso ya Isalaele, ayokisaki bango pasi, akabaki bango na maboko ya bato ya mobulu, mpe abenganaki bango mosika na Ye. \p \v 21 Tango Yawe alongolaki Isalaele na se ya bokonzi ya Davidi, bana ya Isalaele bakomisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mokonzi na bango. Jeroboami atindikaki Isalaele ete balanda Yawe te, mpe amemisaki bango lisumu ya monene. \v 22 Bato ya Isalaele bakangamaki na masumu nyonso ya Jeroboami mpe batikaki yango te \v 23 kino tango Yawe abenganaki bango mosika na Ye, ndenge ayebisaki bango na nzela ya basali na Ye nyonso, basakoli. Boye, bamemaki bana ya Isalaele na bowumbu, mosika ya mokili na bango, na Asiri kino lelo. \s1 Bapaya bayei kovanda na Samari \p \v 24 Mokonzi ya Asiri amemaki bato wuta na bingumba ya Babiloni, ya Kuti, ya Ava, ya Amati mpe ya Sefarivayimi ; mpe atiaki bango na Samari, na esika ya bana ya Isalaele. Bato yango bazwaki Samari mpe bavandaki kati na bingumba na yango. \v 25 Liboso, tango bazalaki kovanda kuna, bato yango bazalaki kogumbamela Yawe te. Boye Yawe atindaki nkosi kati na bango, mpe ebomaki ndambo ya bato kati na bango. \v 26 Bayebisaki mokonzi ya Asiri : \pi1 — Bikolo oyo omemaki na bowumbu mpe otiaki kati na bingumba ya Samari bayebi te makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka. Boye Nzambe atindi kati na bango nkosi oyo ezali koboma bango, pamba te bato yango bayebi te makambo oyo Nzambe yango alingaka. \p \v 27 Boye mokonzi ya Asiri apesaki mitindo oyo : \pi1 — Botinda kuna moko kati na Banganga-Nzambe oyo bomemaki na bowumbu wuta na Samari mpo ete avanda kuna mpe alakisa bato makambo oyo Nzambe ya mokili wana alingaka. \p \v 28 Boye moko kati na Banganga-Nzambe oyo bamemaki na bowumbu wuta na Samari ayaki kovanda na Beteli mpe alakisaki bango kogumbamela Yawe. \p \v 29 Kasi ekolo na ekolo esalaki banzambe na yango kati na bingumba nyonso oyo bazalaki kovanda, mpe batiaki banzambe yango kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba oyo bato ya Samari batongaki. \v 30 Bato oyo bawutaki na Babiloni basalaki ekeko ya nzambe Sukoti-Benoti ; ba-oyo bawutaki na Kuti basalaki ekeko ya nzambe Nerigali ; ba-oyo bawutaki na Amati basalaki ekeko ya nzambe Ashima ; \v 31 ba-oyo bawutaki na Ava basalaki bikeko ya nzambe Nibikazi mpe nzambe Taritaki ; ba-oyo bawutaki na Sefarivayimi bazalaki kokoba kotumba bana na bango na moto lokola mbeka epai ya Adrameleki mpe Anameleki, banzambe ya bato ya Sefarivayimi. \v 32 Bato ya bikolo yango bazalaki na bango kotosa Yawe, kasi baponaki lisusu kati na bango bato mpo na kosala mosala ya bonganga-nzambe kati na bisika ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba. \v 33 Atako bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango kolanda bizaleli ya bikolo epai wapi bawutaki. \p \v 34 Kino lelo, bakangami kaka na bizaleli na bango ya kala ; bagumbamelaka penza Yawe te mpe batosaka te bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe apesaki epai ya bakitani ya Jakobi oyo apesaki kombo « Isalaele. » \v 35 Tango Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele, alobaki na bango : « Bokogumbamela banzambe mosusu te, bokofukamela yango te, bokosalela yango te mpe bokobonzela yango bambeka te ; \v 36 kaka Yawe oyo abimisaki bino wuta na Ejipito, na nguya mpe na loboko esembolama, nde bosengeli kogumbamela. Liboso na Ye kaka nde bosengeli kogumbama mpe kobonza bambeka. \v 37 Bosengeli tango nyonso kozala na bokebi mpo na kobatela bikateli mpe malako, mibeko mpe mitindo oyo Yawe akomaki mpo na bino. Bogumbamela banzambe mosusu te, \v 38 bobosana te boyokani oyo nasalaki elongo na bino, mpe bogumbamela banzambe mosusu te. \v 39 Kaka Yawe, Nzambe na bino, nde bosengeli kogumbamela, pamba te Ye nde akangolaki bino na maboko ya banguna na bino nyonso. » \p \v 40 Kasi bato ya bikolo wana bayokaki te mpe batingamaki kaka na bizaleli na bango ya kala. \p \v 41 Atako bato ya bikolo yango bazalaki kotosa Yawe, kasi bazalaki mpe kosalela banzambe na bango ya bikeko. Kino lelo, bana na bango mpe bakitani na bango bazali kokoba kosala makambo oyo bakoko na bango bazalaki kosala. \c 18 \s1 Ezekiasi, mokonzi ya Yuda \p \v 1 Tango Oze, mwana mobali ya Ela, mokonzi ya Isalaele, akokisaki mibu misato na bokonzi, Ezekiasi, mwana mobali ya Akazi, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi. \r (2Ma 29.1-2; 31.1) \p \v 2 Ezekiasi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Abi. » Abi azalaki mwana mwasi ya Zakari. \v 3 Ezekiasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge Davidi, koko na ye, asalaki. \v 4 Alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba, abukaki makonzi ya bule ya banzambe ya bikeko, mpe akataki likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera. Abukaki-bukaki nyoka ya ebende oyo Moyize asalaki, pamba te kino na tango wana, bana ya Isalaele bazalaki kotumba ansa mpo na nyoka yango mpe kobenga yango « Nekushitani. » \r (2Ma 31.20-21) \p \v 5 Ezekiasi atiaki motema na ye epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Mokonzi moko te akokanaki na ye kati na bakonzi nyonso ya Yuda, ezala liboso to sima na ye. \v 6 Atikalaki ya kokangama na Yawe mpe atikaki te kolanda Ye ; abatelaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya Moyize. \v 7 Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala. Atombokelaki mokonzi ya Asiri mpe aboyaki kosalela ye. \b \p \v 8 Alongaki bato ya Filisitia mpe alandaki bango kino na Gaza, abebisaki engumba mpe etuka na yango, mpe abotolaki bingumba batonga makasi mpe bandako milayi ya bakengeli. \s1 Bato ya Asiri babotoli Samari \r (2Ba 17.3-7) \p \v 9 Tango Ezekiasi akokisaki mibu minei na bokonzi, oyo ezalaki mobu ya sambo ya bokonzi ya Oze, mwana mobali ya Ela, mokonzi ya Isalaele, Salimanasari, mokonzi ya Asiri, abundisaki Samari mpe azingelaki yango. \v 10 Bato ya Asiri babotolaki Samari sima na mibu misato ya bitumba, na mobu ya motoba ya bokonzi ya Ezekiasi, oyo ezalaki mobu ya libwa ya bokonzi ya Oze, mokonzi ya Isalaele. \v 11 Mokonzi ya Asiri amemaki bato ya Isalaele na bowumbu na Asiri mpe atiaki bango na Ala, na ngambo ya ebale Abori, na etuka ya Gozani mpe na bingumba ya Medi. \v 12 Makambo oyo esalemaki mpo ete bato ya Isalaele batosaki te Yawe, Nzambe na bango, mpe babukaki boyokani na Ye ; elingi koloba ete batosaki te makambo nyonso oyo Moyize, mosali na Nzambe, atindaki bango. \s1 Bato ya Asiri bakoti na makasi na mokili ya Yuda \p \v 13 Tango mokonzi Ezekiasi akokisaki mibu zomi na minei na bokonzi, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, abundisaki bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi mpe abotolaki yango. \v 14 Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, atindaki sango oyo epai ya mokonzi ya Asiri, na Lakishi : « Nasali mabe, bima na mboka na ngai ; nakofuta yo nyonso oyo okosenga ngai. » \p Mokonzi ya Asiri akatelaki Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, mpako ya motuya ya bakilo nkoto zomi ya palata mpe bakilo nkoto moko ya wolo. \v 15 Ezekiasi apesaki ye palata nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi. \v 16 Na tango wana, Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, alongolaki wolo oyo asalelaki mpo na kolatisa bikuke mpe mabaya oyo esimbaka bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpe apesaki yango epai ya mokonzi ya Asiri. \s1 Senakeribe abangisi Yelusalemi \r (2Ma 32.9-19) \p \v 17 Wuta na Lakishi, mokonzi ya Asiri atindaki epai ya mokonzi Ezekiasi, na Yelusalemi, mokonzi ya mampinga na ye, mokonzi ya bakalaka ya lokumu, mokonzi ya basoda oyo bakengelaka ye, mpe mampinga ya basoda ya nguya. Tango bakomaki na Yelusalemi mpe batelemaki pene ya nzela oyo ememaka mayi na liziba ya mayi ya monene, oyo ezali na nzela ya elanga ya moto oyo atiaka langi na bilamba, \v 18 babelelaki mokonzi. Mpe Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, babimaki mpo na kokutana na bango. \v 19 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki na bango : \pm « Boloba na Ezekiasi : ‹ Tala makambo oyo mokonzi monene, mokonzi ya Asiri, alobi : ‘ Otie elikya na yo na nini ? \v 20 Okanisi ete maloba ya pamba ekoki kozwa esika ya mayele mpe makasi ya bitumba ? Otie penza elikya na nani mpo ete otombokela ngai ? \v 21 Tala, ozali nde kotia elikya na Ejipito oyo ezali lokola mwa nzete ya bambu oyo ebukana, oyo etobolaka mpe ezokisaka loboko ya moto oyo ayekamelaka yango ! Faraon, mokonzi ya Ejipito, azalaka nde bongo mpo na bato nyonso oyo batielaka ye motema ! ’ \v 22 Tango mosusu bokoloba na ngai : ‘ Totiaka elikya na biso kati na Yawe, Nzambe na biso. ’ Boni ! Ezali ye te oyo Ezekiasi alongolaki bisambelo na ye ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo na ye tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‘ Kati na Yelusalemi, bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo oyo ? ’ \pm \v 23 Sik’oyo, nabondeli yo, beta mondenge na nkolo na ngai, mokonzi ya Asiri : ‘ Nakopesa yo bampunda nkoto mibale soki okoki kopesa basoda mpo ete batambolisa yango ! \v 24 Okokoka ndenge nini kokimisa ata mokonzi moko kaka, kati na bakonzi ya basoda ya nkolo na ngai, yo oyo otiaka elikya na yo kati na Ejipito mpo na bashar mpe bato oyo batambolisaka yango ? \v 25 Boni, okanisi ete ngai nayei kobundisa mpe kobebisa esika oyo na ndingisa ya Yawe te ? Ezali Ye moko Yawe nde alobaki na ngai ete nabundisa mokili oyo mpe nabebisa yango. ’ › » \s1 Bato ya Asiri basengi na bato ya Yuda ete bamikaba \p \v 26 Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia, Shebina mpe Yoa balobaki na mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi : \pi1 — Tobondeli yo, loba na basali na yo na lokota ya Arami, pamba te tososolaka yango ; koloba na biso na lokota ya Ebre te, noki te bato oyo bazali na likolo ya mir bakoyoka. \p \v 27 Mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi azongisaki : \pi1 — Bokanisi ete nkolo na ngai atindi ngai koloba maloba oyo kaka epai na mokonzi na bino mpe epai na bino ? Te ! Maloba yango ezali mpe mpo na bato oyo batelemi na likolo ya mir, oyo bakolia nyei na bango mpe komela masuba na bango elongo na bino ? \p \v 28 Boye mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi atelemaki mpe agangaki makasi na lokota ya Ebre : \pi1 — Boyoka maloba ya mokonzi monene, mokonzi ya Asiri ! \v 29 Tala makambo oyo mokonzi alobi : « Tika ete Ezekiasi akosa bino te, pamba te akokoka te kokangola bino na loboko na ngai ! \v 30 Bondima te ete Ezekiasi atinda bino kotia elikya na Yawe tango azali koloba : ‹ Solo, Yawe akokangola biso. Engumba oyo ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri. › \v 31 Boyokela Ezekiasi te, pamba te tala makambo oyo mokonzi ya Asiri alobi : Bosala boyokani ya kimia elongo na ngai mpe boya epai na ngai ; bongo moko na moko kati na bino akolia mbuma ya elanga na ye ya vino, ya nzete na ye ya figi, mpe akomela mayi ya libulu na ye \v 32 liboso ete naya kozwa bino mpo na komema bino na mokili oyo ekokana na oyo ya bino, mokili oyo etonda na ble mpe na vino ya sika, mokili ya mapa mpe ya bilanga ya vino, mokili ya banzete ya olive mpe ya mafuta ya nzoyi. Boye, bokozala na bomoi, bokokufa te ! Bondima Ezekiasi te, pamba te azali kokosa bino tango azali koloba : ‹ Yawe akokangola biso. › \v 33 Boni, ezali na nzambe ya ekolo songolo, oyo alonga kokangola ekolo na ye na loboko ya mokonzi ya Asiri ? \v 34 Wapi banzambe ya Amati mpe ya Aripadi ? Wapi banzambe ya Sefarivayimi, ya Ena, ya Iva ? Boni, balongaki kokangola Samari na loboko na ngai ? \v 35 Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo, nani azalaki na makoki ya kokangola mokili na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Yawe akoka solo kokangola Yelusalemi na maboko na ngai ? » \p \v 36 Kasi bato batikalaki kimia mpe bazongiselaki ye ata liloba moko te, pamba te mokonzi apesaki mitindo : \pi1 — Bopesa ye eyano te ! \p \v 37 Boye Eliakimi, mwana mobali ya Ilikia mpe mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda ; mpe Yoa, mwana mobali ya Azafi mpe mobombi mikanda, bayaki epai ya Ezekiasi na bilamba epasuka, mpe bayebisaki ye makambo oyo mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri alobaki. \c 19 \s1 Yesaya asakoli mpo na bato ya Asiri \p \v 1 Tango mokonzi Ezekiasi ayokaki bongo, apasolaki bilamba na ye, alataki basaki mpe akotaki na Tempelo ya Yawe. \v 2 Atindaki epai ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, Eliakimi, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; Shebina, mokomi mikanda, mpe Banganga-Nzambe ya mikolo ; bango nyonso balata bilamba ya basaki. \v 3 Balobaki na ye : \pi1 — Tala makambo oyo Ezekiasi alobi : « Mokolo ya lelo ezali mokolo ya pasi, mokolo ya etumbu mpe mokolo ya soni, pamba te tokomi lokola mwasi oyo azali na pasi ya kobota kasi azangi makasi ya kobimisa mwana. \v 4 Tango mosusu Yawe, Nzambe na yo, akoyoka maloba nyonso ya mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi, oyo nkolo na ye, mokonzi ya Asiri, atindaki mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi ; mpe tango mosusu akopesa ye etumbu mpo na maloba oyo Yawe, Nzambe na yo, ayokaki. Boye, sambela mpo na ndambo ya bato oyo bazali nanu na bomoi. » \p \v 5 Tango bakalaka ya mokonzi Ezekiasi bakomaki epai ya Ezayi, \v 6 Ezayi alobaki na bango : \pi1 — Boloba na nkolo na bino : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Kobanga te mpo na makambo oyo oyoki, maloba oyo basali ya mokonzi ya Asiri bazali koloba mpo na kosambwisa Ngai. \v 7 Tala, nakotia molimo moko kati na ye mpo ete, tango akoyoka sango ya makambo oyo ezali koleka na mboka na ye, azonga na mokili na ye ; mpe ekozala kuna, na mokili na ye, nde nakobomisa ye na mopanga. › » \p \v 8 Tango mokonzi ya basoda oyo bakengelaka mokonzi ya Asiri ayokaki ete mokonzi na ye alongwe na engumba Lakishi, azongaki mpe akutaki mokonzi na ye azali kobundisa engumba Libina. \v 9 Sima na Senakeribe koyoka sango na tina na Tiraka, mokonzi ya Kushi, ete azali koya kobundisa ye, atindaki bantoma epai ya Ezekiasi na maloba oyo : \v 10 « Boloba na Ezekiasi, mokonzi ya Yuda : Kotika te ete Nzambe na yo, oyo otielaka motema akosa yo na maloba oyo : ‹ Yelusalemi ekokweya te na maboko ya mokonzi ya Asiri ! › \v 11 Oyokaki makambo oyo bakonzi ya Asiri basalaki bikolo nyonso mpe ndenge nini babebisaki yango nye ; okanisi ete yo nde okobika ? \v 12 Tango batata na ngai babebisaki Gozani, Arani, Retsefi mpe bato ya Edeni oyo bazalaki kovanda kati na Telasari, boni, banzambe ya bikolo yango bakangolaki yango ? \v 13 Wapi mokonzi ya Amati, ya Aripadi, ya Layiri, ya engumba Sefarivayimi, ya Ena mpe ya Iva ? » \s1 Libondeli ya Ezekiasi \p \v 14 Sima na Ezekiasi kozwa mokanda kowuta na maboko ya bantoma, atangaki yango, akendeki na Tempelo ya Yawe mpe afungolaki mokanda yango liboso ya Yawe. \v 15 Mpe Ezekiasi asambelaki Yawe : « Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, Yo oyo ovandi likolo ya basheribe, ozali Nzambe kaka moko na likolo ya mikili nyonso ya mabele, Yo nde osala Likolo mpe mabele. \v 16 Oh Yawe, pesa litoyi mpe yoka ! Yawe, fungola miso mpe mona ! Yoka maloba oyo Senakeribe atindi mpo na kosambwisa Nzambe na bomoi. \v 17 Oh Yawe, ezali ya solo ete bakonzi ya Asiri babebisaki bikolo oyo mpe mikili na bango, \v 18 bazikisaki banzambe na bango na moto, pamba te banzambe yango ezalaki Nzambe te kasi banzete to mabanga ya pamba oyo esalemi na maboko ya bato. \v 19 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na biso, bikisa biso na maboko na ye mpo ete mikili nyonso ya mabele eyeba solo ete Yo moko kaka, Yawe, nde ozali Nzambe ! » \s1 Eyano ya Yawe \p \v 20 Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, atindelaki Ezekiasi maloba oyo : « Tala liloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Nayoki losambo na yo na tina na Senakeribe, mokonzi ya Asiri. \v 21 Tala liloba oyo Yawe alobi mpo na kotelemela ye : \q1 ‹ Siona, mboka kitoko, ezali kotiola yo mpe koseka yo ; \q2 Yelusalemi, mboka kitoko, ezali koningisa moto mpo na kotiola yo. \q1 \v 22 Nani oyo ofingaki mpe otiolaki ? \q2 Nani oyo omatiselaki mongongo \q1 mpe otalaki na miso ya lolendo ? \q2 Ngai, Mosantu ya Isalaele ! \q1 \v 23 Na nzela ya bantoma na yo, \q2 ofingaki Nkolo mpe olobaki : \q1 ‘ Na lisungi ya ebele ya bashar na ngai, \q2 namataki kino na basonge ya bangomba, \q1 na basonge oyo eleki likolo kati na Libani, \q2 nakweyisaki banzete na yango ya sedele oyo eleki milayi, \q1 banzete na yango ya sipele oyo eleki kitoko, \q2 mpe nakomaki kino na songe na yango ya suka, \q2 na zamba na yango oyo eleki kitoko, \q1 \v 24 natimolaki mabulu ya mayi kati na mikili ya bapaya \q2 mpe namelaki mayi kuna. \q1 Na matambe ya makolo na ngai, \q2 nakawusaki miluka nyonso ya Ejipito. ’ \q1 \v 25 Oyoka nanu yango te ? \q2 Nasalaki mabongisi ya makambo oyo wuta kala, \q1 nabongisaki yango wuta na mikolo oyo eleka kala ; \q2 sik’oyo nde nakokisi yango ; \q1 esengeli na yo kokomisa bingumba ya makasi mipiku ya mabanga. \q1 \v 26 Bato na yango bazangi makasi, \q2 balengi na somo mpe bakomi na soni, \q1 bakomi lokola matiti ya bilanga, \q2 lokola matiti ya langi ya mayi ya pondu, \q1 lokola matiti oyo ebotaka na mitondo ya bandako, \q2 ekawuka liboso ete ekola. \q1 \v 27 Nayebi esika nini ozalaka, \q2 tango nini obimaka, tango nini ozongaka, \q2 mpe tango nini otombokelaka Ngai. \q1 \v 28 Lokola otombokelaka Ngai, \q2 mpe lofundu na yo ekomi kino na matoyi na Ngai, \q1 nakotia lopete na Ngai na zolo na yo, \q2 nakokanga yo singa na bibebu \q1 ndenge bakangaka mpunda monoko, \q2 mpe nakozongisa yo na nzela oyo oyelaki. › \q1 \v 29 Oh Ezekiasi, tala oyo ekozala elembo mpo na yo : \q2 Na mobu oyo, bokolia biloko oyo ekobima \q1 na nkona oyo ekweyaki na mabele ; \q2 na mobu oyo ekolanda, bokolia biloko oyo ebotaka yango moko. \q1 Kasi na mobu ya misato, bokolona mpe bokobuka bambuma, \q2 bokolona banzete ya vino, mpe bokolia bambuma na yango. \q1 \v 30 Bato ya Yuda oyo bakobika, oyo bakotikala, \q2 bakozala lisusu lokola nzete \q1 oyo ekotisi misisa na yango ya sika kati na mabele \q2 mpe eboti bambuma. \q1 \v 31 Pamba te, na Yelusalemi, ndambo ya bato bakotikala ; \q2 mpe na Siona, mwa ndambo bakobika. \m Bolingo makasi ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, nde ekokokisa yango. \b \p \v 32 Yango wana, tala liloba oyo Yawe alobi na tina na mokonzi ya Asiri : \q1 ‹ Akokota na engumba oyo te, \q2 akobeta kuna ata mbanzi moko te, \q1 akobundisa yango na banguba te \q2 mpe akomatisa ata mabele te liboso na yango \q2 mpo na komibomba ; \q1 \v 33 akozongela na nzela oyo ayelaki \q2 mpe akokota na engumba oyo te, \q2 elobi Yawe. \q1 \v 34 Nakobatela engumba oyo mpe nakobikisa yango, \q2 mpo na lokumu ya Kombo na Ngai \q2 mpe mpo na lokumu ya Davidi, mosali na Ngai. › » \r (2Ma 32.21; Ez 37.36-38) \p \v 35 Na butu wana, anjelu na Yawe abimaki mpe abomaki bato nkoto nkama moko na tuku mwambe na mitano kati na molako ya bato ya Asiri. Tango bato balamukaki na tongo ya mokolo oyo elandaki, bakutaki kaka bibembe. \v 36 Boye Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alongolaki molako, azongaki na Ninive mpe akomaki kovanda kuna. \p \v 37 Mokolo moko, wana azalaki kogumbamela nzambe na ye, Nisiroki, kati na tempelo ya nzambe yango, bana na ye ya mibali, Adrameleki mpe Saretseri, babomaki ye na mopanga mpe bakimaki na Ararati. Bongo mwana na ye ya mobali, Esari-Adoni, akitanaki na ye na bokonzi. \c 20 \s1 Bokono ya Ezekiasi \r (2Ma 32.24-26) \p \v 1 Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. » \p \v 2 Ezekiasi abalolaki elongi na ye na mir mpe abondelaki Yawe : \pi1 \v 3 — Oh Yawe, kanisa ndenge nini natambolaki liboso na Yo na boyengebene, ndenge nini namipesaki epai na Yo na motema na ngai mobimba, mpe ndenge nini nasalaki makambo ya malamu na miso na Yo. \p Mpe Ezekiasi alelaki mingi. \p \v 4 Liboso ete Ezayi akoma na lopango ya monene, Yawe alobaki na ye : \pi1 \v 5 — Zonga epai ya Ezekiasi, mokonzi ya bato na Ngai, mpe loba na ye : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya tata na yo, Davidi, alobi : ‹ Nayoki libondeli na yo mpe namoni mpinzoli na yo. Tala, nakobikisa yo ; mpe sima na lobi, okomata lisusu na Tempelo ya Yawe. \v 6 Nakobakisa mibu zomi na mitano na mikolo ya bomoi na yo. Nakokangola yo elongo na engumba oyo, wuta na maboko ya mokonzi ya Asiri, mpe nakobatela yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai mpe mpo na Davidi, mosali na Ngai. › » \p \v 7 Ezayi alobaki : \pi1 — Bozwa liboke ya figi. \p Bazwaki yango, batiaki yango na pota oyo ezalaki kokawuka te, mpe mokonzi abikaki. \p \v 8 Ezekiasi atunaki Ezayi : \pi1 — Elembo nini ekolakisa ngai ete Yawe akobikisa ngai, mpe ete nakokende na Tempelo ya Yawe sima na lobi ? \p \v 9 Ezayi azongisaki : \pi1 — Tala elembo oyo Yawe apesi yo mpo na kotalisa ete akokokisa makambo oyo alaki yo : Olingi ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi to ezonga sima na matambe zomi ? \p \v 10 Ezekiasi azongisaki : \pi1 — Ezali pasi te ete elilingi ekende liboso, na matambe zomi ; zongisa yango nde na sima, na matambe zomi. \p \v 11 Bongo mosakoli Ezayi abelelaki Yawe, mpe Yawe azongisaki elilingi sima, na matambe zomi, kolanda ematelo ya Akazi. \s1 Ezekiasi ayambi bantoma ya Babiloni \p \v 12 Na tango wana, Merodaki-Baladani, mwana mobali ya Baladani, mokonzi ya Babiloni, atindaki mokanda mpe kado epai ya Ezekiasi, pamba te ayokaki sango ete Ezekiasi abelaki. \v 13 Ezekiasi ayambaki bantoma na esengo mpe alakisaki bibombelo biloko na ye ya motuya lokola palata mpe wolo, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, mafuta ya kitoko, bibundeli na ye nyonso, mpe bomengo na ye nyonso. Ezalaki na eloko moko te, ezala ya ndako na ye to ya mokili na ye mobimba, oyo azangaki kolakisa bango. \p \v 14 Bongo mosakoli Ezayi akendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe atunaki ye : \pi1 — Bato wana balobi nini mpe bawuti wapi ? \p Ezekiasi azongisaki : \pi1 — Bawuti mosika, na mokili ya Babiloni. \p \v 15 Ezayi atunaki : \pi1 — Bamoni eloko nini kati na ndako na yo ya bokonzi ? \p Ezekiasi azongisaki : \pi1 — Bamoni biloko nyonso oyo ezali kati na ndako na ngai ; ezali na eloko moko te, kati na bibombelo na ngai, oyo nazangi kolakisa bango. \p \v 16 Ezayi alobaki na Ezekiasi : \pi1 — Yoka liloba oyo Yawe alobi : \v 17 « Solo, na mikolo ekoya, nyonso oyo ezali kati na ndako na yo, mpe nyonso oyo batata na yo babomba kino na mokolo ya lelo, bakomema yango na Babiloni, eloko moko te ekotikala, elobi Yawe. \v 18 Mingi kati na bakitani na yo, kati na ba-oyo babimi penza na mokongo na yo, bakomema bango mpe bakoboma bango mikongo mpo ete bakoma kosala kati na ndako ya mokonzi ya Babiloni. » \p \v 19 Ezekiasi azongiselaki Ezayi : \pi1 — Liloba na Yawe, oyo osili koloba ezali malamu. \m Pamba te azalaki komilobela : « Boni, kimia mpe bobatelami ekozala penza na mikolo ya bomoi na ngai ? » \r (2Ma 32.32-33) \p \v 20 Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi, misala na ye nyonso ya nguya mpe ndenge asalaki liziba mpe nzela ya se ya mabele oyo amemaki mayi kino na engumba, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \v 21 Ezekiasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Manase, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 21 \s1 Manase, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 33.1-10) \p \v 1 Manase azalaki na mibu zomi na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Efitsiba. » \v 2 Manase asalaki makambo mabe na miso ya Yawe na ndenge amekolaki misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele. \v 3 Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki ; atongaki mpe bitumbelo mpo na nzambe Bala mpe atelemisaki likonzi mpo na nzambe mwasi Ashera, ndenge Akabi, mokonzi ya Isalaele, asalaki ; afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo. \v 4 Atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya kati na Tempelo ya Yawe oyo, na tina na yango, Yawe alobaki : « Nakotia Kombo na Ngai kati na Yelusalemi. » \p \v 5 Atongaki kati na mapango nyonso mibale ya Tempelo ya Yawe bitumbelo mpo na mampinga nyonso ya likolo. \v 6 Abonzaki na moto, lokola mbeka, mwana na ye ya mobali ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji. Atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; mpe, na bongo, apelisaki kanda ya Yawe. \v 7 Atiaki kati na Tempelo ya Yawe ekeko ya Ashera, oyo asalisaki ; nzokande, Yawe alobaki na Davidi mpe na Salomo, mwana na ye ya mobali : « Nakotia Kombo na Ngai mpo na libela kati na Tempelo oyo mpe kati na Yelusalemi oyo naponi kati na mabota nyonso ya Isalaele. \v 8 Soki kaka bato ya Isalaele batosi mibeko mpe mitindo nyonso oyo napesaki bango na nzela ya Moyize, mosali na Ngai, nakosala ete bayengayenga lisusu te mosika ya mabele oyo napesaki epai ya batata na bango. » \p \v 9 Kasi bato ya Isalaele batosaki te. Manase apengwisaki bango, mpe basalaki lisusu mabe koleka bikolo oyo Yawe abebisaki liboso ya bato ya Isalaele. \s1 Lisakoli ya kobebisama ya Yuda \p \v 10 Yawe alobaki na nzela ya basali na ye, basakoli : \v 11 « Lokola Manase, mokonzi ya Yuda, asalaki makambo ya nkele, lokola asalaki makambo mabe koleka ata bato ya Amori oyo bazalaki liboso na ye, mpe lokola apengwisaki Yuda na nzela ya banzambe na ye ya bikeko, \v 12 tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakoyeisa kati na Yelusalemi mpe kati na Yuda pasi oyo ekozala lokola kake na matoyi ya moto nyonso oyo akoyoka sango na yango. \v 13 Nakobebisa Yelusalemi ndenge nabebisaki Samari, mpe nakokomisa yango lokola ndako ya Akabi. Nakonika Yelusalemi ndenge banikaka mpe babalolaka nzungu. \v 14 Nakosundola ndambo ya libula na Ngai oyo ekotikala, nakokaba bango na maboko ya banguna na bango. Banguna na bango bakobebisa bango mpe bakobotola biloko na bango, \v 15 pamba te basalaki mabe na miso na Ngai mpe bapelisaki kanda na Ngai, wuta na mokolo oyo batata na bango babimaki na Ejipito kino na mokolo ya lelo. › » \p \v 16 Mpe lisusu, Manase asopaki makila ya bato oyo bayebi likambo te mpe atondisaki Yelusalemi na makila yango na bisika nyonso —kotanga te masumu oyo apengwisaki na yango Yuda mpo na kosala mabe na miso ya Yawe. \r (2Ma 33.18-20) \p \v 17 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Manase, misala na ye nyonso mpe masumu oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \v 18 Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na elanga ya ndako na ye ya bokonzi, oyo babengaka elanga ya Uza. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Amoni, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 33.21-25) \p \v 19 Amoni azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Meshulemeti. » Meshulemeti azalaki mwana mwasi ya Arutsi, moto ya Yotiba. \v 20 Amoni asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Manase, tata na ye, asalaki. \v 21 Atambolaki na banzela nyonso ya tata na ye, na kosambelaka banzambe ya bikeko oyo tata na ye asambelaki mpe agumbamelaki. \v 22 Asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye, mpe atambolaki na banzela ya Yawe te. \v 23 Bakalaka ya Amoni basalelaki ye likita mpe babomaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi. \v 24 Bongo bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki mokonzi Amoni likita mpe bakomisaki Joziasi, mwana na ye ya mobali, mokonzi na esika na ye. \b \p \v 25 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amoni, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \v 26 Bakundaki ye kati na kunda na ye, kati na elanga ya Uza ; mpe Joziasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 22 \s1 Joziasi, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 34.1-2, 8-28) \p \v 1 Joziasi azalaki na mibu mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku misato na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yedida. » Yedida azalaki mwana ya Adaya, moto ya mboka Botsikati. \v 2 Joziasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango ; apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali. \p \v 3 Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, atindaki Shafani, mokomi mikanda na ye, mwana mobali ya Atsalia mpe koko ya Meshulami, na Tempelo ya Yawe. Alobaki na ye : \pi1 \v 4 — Kende koyebisa Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, ete atanga mbongo nyonso oyo bato bamemaki na Tempelo ya Yawe mpe oyo bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe bakongolaki. \v 5 Tika ete bapesa mbongo yango na maboko ya batambolisi misala ya Tempelo ya Yawe mpo ete bafuta basali oyo bazali kobongisa yango : \v 6 basharipantie, bangamba mpe batongi ndako. Kaka na mbongo yango, bakosomba lisusu mabaya mpe mabanga bakata mpo na kolendisa Tempelo ya Yawe. \v 7 Kasi batuna bango te ndenge nini bakosalela mbongo yango, pamba te basalaka na boyengebene. \p \v 8 Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, alobaki na Shafani, mokomi mikanda : \pi1 — Namoni buku ya Mobeko kati na Tempelo ya Yawe. \p Ilikia apesaki buku yango epai ya Shafani, mpe Shafani atangaki yango. \v 9 Bongo Shafani, mokomi mikanda, akendeki epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye : \pi1 — Basali na yo bapesi mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe epai ya batambolisi misala na yango, \v 10 mpe Nganga-Nzambe Ilikia apesi ngai buku moko. \p Mpe Shafani atangaki buku yango liboso ya mokonzi. \p \v 11 Tango mokonzi ayokaki maloba ya buku ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye \v 12 mpe apesaki mitindo oyo epai ya Nganga-Nzambe Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani, epai ya Akibori, mwana mobali ya Mishe, epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi : \pi1 \v 13 — Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai, mpo na bato mpe mpo na Yuda mobimba, na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana. Pamba te kanda ya Yawe, oyo epeleli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te maloba ya buku yango mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na yango. \p \v 14 Boye Nganga-Nzambe Ilikia, Ayikami, Akibori, Shafani mpe Asaya bakendeki epai ya mwasi mosakoli Ulida, mwasi ya Shalumi, mwana mobali ya Tikiva, koko ya Arasi, mobombi bilamba ya Tempelo. Ulida azalaki kovanda na Yelusalemi, kati na etuka ya sika. Tango basilisaki koyebisa ye makambo, \v 15 Ulida alobaki na bango : \pi1 — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : Boloba na tata oyo atindi bino epai na Ngai : \v 16 « Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakobengisa pasi makasi na esika oyo mpe na bavandi na yango kolanda makambo nyonso oyo ekomama kati na buku oyo mokonzi ya Yuda awuti kotanga. \v 17 Lokola basundolaki Ngai mpe batumbaki mbeka ya malasi mpo na banzambe mosusu kino kotumbola Ngai na nzela ya biloko nyonso oyo maboko na bango esilaki kosala, kanda na Ngai epeli makasi mpo na kobebisa esika oyo, mpe ekokita te. » \v 18 Boloba na mokonzi ya Yuda oyo atindi bino kotuna toli ya Yawe : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na maloba oyo oyokaki : \v 19 Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Yawe sima na yo koyoka makambo oyo nalobaki, mpo na kotelemela esika oyo elongo na bavandi na yango, ete bakobebisama mpe bakolakelama mabe ; lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, elobi Yawe. \v 20 Mpo na yango, nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo ; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo. » \p Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi. \c 23 \s1 Boyeisi sika ya Boyokani elongo na Yawe \r (2Ma 34.29-32) \p \v 1 Mokonzi Joziasi abengisaki bampaka nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi epai na ye, \v 2 mpe akendeki na Tempelo ya Yawe elongo na bato nyonso ya Yuda, bavandi nyonso ya Yelusalemi, Banganga-Nzambe mpe basakoli, bato nyonso, kobanda na oyo aleki na se kino na oyo aleki na lokumu. Mokonzi atangelaki bango makomi nyonso ya buku ya Boyokani oyo emonanaki kati na Tempelo ya Yawe. \v 3 Mokonzi atelemaki na etemelo ya kolobela, asalaki boyokani oyo liboso ya Yawe : « Nalapi ndayi ete nakolanda Yawe, nakotosa mibeko, mitindo mpe malako na Ye, na motema mpe na elimo na ngai mobimba ; mpe nakotosa maloba ya boyokani, oyo ekomama kati na buku oyo. » Bato nyonso bandimaki kotosa boyokani yango. \s1 Joziasi abongisi lolenge ya kosambela \r (2Ma 34.3-7, 33) \p \v 4 Mokonzi apesaki mitindo epai ya Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, epai ya Banganga-Nzambe oyo balandi mpe epai ya bakengeli bikuke ya Tempelo ya Yawe, mpo ete balongola kati na Tempelo ya Yawe, biloko nyonso oyo esalema mpo na Bala, mpo na nzambe mwasi Ashera, mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo. Mokonzi atumbaki yango libanda ya Yelusalemi, kati na bilanga ya lubwaku ya Sedron, mpe amemaki putulu na yango na Beteli. \v 5 Mokonzi alongolaki banganga-nzambe ya bapaya oyo bakonzi ya Yuda batiaki mpo na kotumba ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba ya bingumba ya Yuda mpe ya zingazinga ya Yelusalemi : bango nde bazalaki kotumba ansa mpo na Bala, mpo na moyi, mpo na sanza, mpo na minzoto mpe mpo na mampinga nyonso ya likolo. \v 6 Alongolaki kati na Tempelo ya Yawe likonzi ya nzambe mwasi Ashera, mpe amemaki yango na lubwaku ya Sedron, libanda ya Yelusalemi, epai wapi batumbaki yango. Akomisaki yango putulu mpe asopaki yango na kunda epai wapi bakundaka bato ebele na libulu moko. \v 7 Mokonzi abukaki kati na Tempelo ya Yawe, bandako ya mibali oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, bandako epai wapi basi bazalaki kotonga banzambala mpo na nzambe mwasi Ashera. \v 8 Joziasi abengisaki Banganga-Nzambe nyonso ya bingumba ya Yuda mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba oyo ezalaki longwa na Geba kino na Beri-Sheba epai wapi banganga-nzambe wana bazalaki kotumba ansa. Abukaki mpe bisika ya bule oyo batonga pene ya bikuke ya bingumba : oyo ezalaki na ebandeli ya ekuke ya Jozue, moyangeli ya engumba, mpe oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mwasi ya ekuke ya engumba. \v 9 Atako banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba bakokaki te kosala mosala na etumbelo ya Yawe kati na Yelusalemi, kasi bazalaki kolia mapa ezanga levire elongo na Banganga-Nzambe mosusu. \p \v 10 Mokonzi apanzaki etumbelo ya Tofeti, oyo ezalaki na Lubwaku ya Beni-Inomi mpo ete moto moko te asalela yango lisusu mpo na kotumba mwana na ye ya mobali to ya mwasi lokola mbeka epai ya Moloki. \v 11 Alongolaki, wuta na ekuke kino na Tempelo ya Yawe, bampunda oyo bakonzi ya Yuda babonzaki na nzambe Moyi, oyo ezalaki na lopango pembeni ya shambre ya Netani-Meleki, soda oyo baboma mokongo. Mokonzi atumbaki bashar oyo bazalaki kosalela losambo ya nzambe Moyi. \v 12 Mokonzi abukaki bitumbelo oyo bakonzi ya Yuda batongaki na likolo ya shambre ya likolo ya Akazi, mpe bitumbelo oyo Manase atongisaki kati na mapango mibale ya Tempelo ya Yawe. Alongolaki yango wana, abukaki yango na biteni, mpe abwakaki yango na lubwaku ya Sedron. \v 13 Mokonzi apanzaki mpe bisambelo ya likolo ya bangomba oyo ezalaki na este ya Yelusalemi, na ngambo ya loboko ya mobali ya ngomba ya Libebi, oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, atongaki mpo na Asitarite, nzambe mwasi ya makambo mabe ya bato ya Sidoni ; mpo na Kemoshi, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Moabi ; mpe mpo na Moloki, nzambe ya makambo mabe ya bato ya Amoni. \v 14 Joziasi abukaki mabanga ya bule, akweyisaki makonzi ya Ashera, mpe atondisaki esika yango na mikuwa ya bato. \s1 Joziasi abongisi losambo \p \v 15 Joziasi abukaki mpe etumbelo oyo ezalaki na Beteli mpe esambelo ya likolo ya ngomba oyo Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, atongaki mpo na kopengwisa bana ya Isalaele. Abukaki etumbelo yango mpe akomisaki yango putulu. Bongo atumbaki mpe likonzi ya Ashera. \v 16 Tango Joziasi atalaki na zingazinga, amonaki bakunda oyo ezalaki na likolo ya ngomba ; boye akundolaki mikuwa oyo ezalaki kuna mpe atumbaki yango na likolo ya etumbelo. Na nzela yango, abebisaki lokumu ya etumbelo yango kolanda Liloba na Yawe, oyo moto na Nzambe asakolaki. \v 17 Mokonzi atunaki : \pi1 — Kunda oyo nazali komona ezali ya nani ? \p Bato ya engumba bazongisaki : \pi1 — Ezali kunda ya moto na Nzambe oyo awutaki na Yuda mpe asakolaki makambo oyo owuti kosala na etumbelo ya Beteli. \p \v 18 Mokonzi alobaki : \pi1 — Botika yango, moto moko te asimba mikuwa na ye. \p Boye batikaki mikuwa na ye mpe mikuwa ya mosakoli oyo awutaki na Samari. \p \v 19 Ndenge asalaki na Beteli, Joziasi abukaki bisika nyonso ya bule ya bisambelo ya likolo ya bangomba oyo bakonzi ya Isalaele batongaki kati na bingumba ya Samari, oyo na tina na yango Yawe asilikaki makasi. \v 20 Joziasi abomaki banganga-nzambe nyonso ya bisambelo ya likolo ya bangomba oyo bazalaki kuna, abonzaki bango lokola mbeka na likolo ya bitumbelo na bango moko mpe atumbaki mikuwa ya bato na likolo ya bitumbelo yango. Bongo azongaki na Yelusalemi. \s1 Feti ya Pasika \r (2Ma 35.1, 18-19) \p \v 21 Mokonzi apesaki mitindo epai ya bato nyonso : « Bosala feti ya Pasika mpo na Yawe, Nzambe na bino, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Boyokani. » \p \v 22 Feti ya Pasika ya lolenge wana etikalaki nanu kosalema te wuta na tango oyo bilombe bakambaki Isalaele to na tango nyonso ya bakonzi ya Isalaele mpe ya bakonzi ya Yuda. \v 23 Kasi tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, basalaki lisusu feti ya Pasika mpo na Yawe, na Yelusalemi. \p \v 24 Joziasi abomaki mpe bato oyo basololaka na milimo ya bakufi, bamoni makambo, bikilakila, banzambe ya bikeko, mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na mokili ya Yuda mpe ya Yelusalemi. Asalaki bongo mpo na kokokisa mitindo oyo ekomama kati na buku oyo Nganga-Nzambe Ilikia amonaki kati na Tempelo ya Yawe. \v 25 Mokonzi moko te azongelaki Yawe lokola Joziasi, na motema na ye mobimba, na molimo na ye mobimba mpe na makasi na ye nyonso, kolanda mibeko nyonso ya Moyize. Mpe sima na ye, mokonzi moko te azalaki lokola ye. \p \v 26 Nzokande, Yawe atikaki te kanda makasi na Ye, oyo apeliselaki Yuda likolo ya mabe nyonso oyo Manase asalaki mpo na kopesa Ye kanda. \v 27 Boye Yawe alobaki : « Nakobengana mpe Yuda na miso na Ngai ndenge nabenganaki Isalaele ; nakobwaka Yelusalemi, engumba oyo napona, elongo na Tempelo na yango, oyo na tina na yango nalobaki : ‹ Kombo na Ngai ekozala kuna. › » \s1 Suka ya Joziasi \r (2Ma 35.20–36.1) \p \v 28 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Joziasi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \p \v 29 Tango Joziasi azalaki mokonzi, Faraon Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki na ebale Efrate mpo na kosunga mokonzi ya Asiri. Mokonzi Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela, kasi Neko abundisaki ye mpe abomaki ye, na Megido. \v 30 Basoda ya Joziasi bamemaki ebembe na ye na likolo ya shar, longwa na Megido kino na Yelusalemi epai wapi bakundaki ye kati na kunda na ye moko. Bato ya mokili bazwaki Yoakazi, mwana mobali ya Joziasi, bapakolaki ye mafuta mpe bakomisaki ye mokonzi mpo na kokitana na tata na ye. \s1 Yoakazi, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 36.2-4) \p \v 31 Yoakazi azalaki na mibu tuku mibale na misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Amutali. » Amutali azalaki mwana ya Jeremi, moto ya Libina. \v 32 Yoakazi asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge bakoko na ye basalaki. \v 33 Faraon Neko atiaki ye na boloko mpe akangaki ye minyololo, na Ribila, kati na mokili ya Amati, mpo ete akonza lisusu te na Yelusalemi. Faraon Neko afutisaki na makasi mokili ya Yuda mpako ya nkoto misato nkama minei ya bakilo ya palata mpe bakilo tuku misato na minei ya wolo. \v 34 Faraon Neko akomisaki Eliakimi, mwana mobali ya Joziasi, mokonzi mpo na kokitana na Joziasi, tata na ye ; abongolaki kombo na ye mpe akomisaki yango « Yeoyakimi. » Kasi akangaki Yoakazi mpe amemaki ye na Ejipito. Mpe Yoakazi akufaki kuna. \p \v 35 Yeoyakimi afutaki epai ya Faraon Neko palata mpe wolo oyo asengaki. Mpo na kofuta yango, Yeoyakimi asengaki ete bato ya mokili bafuta mpako. Afutisaki bato mpako ya palata to ya wolo kolanda bozwi na bango. \s1 Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 36.5-8) \p \v 36 Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Zebuda. » Zebuda azalaki mwana ya Pedaya, moto ya Ruma. \v 37 Yeoyakimi asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge kaka bakoko na ye basalaki. \c 24 \s1 Bitumba ya liboso ya Babiloni \p \v 1 Wana Yeoyakimi azalaki mokonzi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akotaki na makasi kati na mokili ; mpe Yeoyakimi akomaki mosali na ye mibu misato. Kasi sima, abongolaki makanisi mpe atombokelaki Nabukodonozori. \v 2 Yawe atindaki mampinga ya bato ya Chalide, ya Siri, ya Moabi mpe ya Amoni mpo na kobundisa ye. Yawe atindaki bango mpo na kobebisa Yuda kolanda liloba oyo Yawe asakolaki na nzela ya basali na Ye, basakoli. \v 3 Solo, makambo yango ekomelaki Yuda kolanda mitindo na Yawe mpo na kolongola bango na miso na Ye likolo ya masumu ya Manase mpe likolo ya makambo nyonso oyo asalaki ; \v 4 bakisa makila oyo asopaki, makila ya bato oyo bayebi likambo te. Pamba te atondisaki Yelusalemi na makila ya bato oyo bayebaki likambo te ; mpe Yawe aboyaki kolimbisa ye. \p \v 5 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yeoyakimi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \v 6 Tango Yeoyakimi akufaki, Yeoyakini, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \p \v 7 Mokonzi ya Ejipito azalaki kobima lisusu te elongo na mampinga na ye mpo na kokota na mikili mosusu, mpo ete mokonzi ya Babiloni abotolaki mabele na ye nyonso, longwa na moluka ya nor ya Ejipito kino na ebale Efrate. \s1 Yeoyakini, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 36.9-10) \p \v 8 Yeoyakini azalaki na mibu zomi na mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Newushita. » Newushita azalaki mwana ya Elinatani, moto ya Yelusalemi. \v 9 Yeoyakini asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge kaka tata na ye asalaki. \p \v 10 Ezalaki na tango wana nde bakonzi ya basoda ya Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, babundisaki Yelusalemi mpe bazingelaki engumba yango. \v 11 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, ayaki ye moko na engumba tango basoda na ye bazalaki kozingela yango. \v 12 Yeoyakini, mokonzi ya Yuda ; mama na ye, basali na ye, bakambi na ye mpe bakalaka na ye ya lokumu bamipesaki bango nyonso epai ya mokonzi Nabukodonozori. Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Yeoyakini na boloko na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye. \v 13 Ndenge Yawe alobaki yango, Nabukodonozori azwaki bomengo nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako ya mokonzi ; bongo amemaki biloko nyonso ya wolo oyo Salomo, mokonzi ya Isalaele, asalaki mpo na Tempelo ya Yawe. \v 14 Amemaki Yelusalemi mobimba na bowumbu : bakonzi nyonso ya basoda mpe basoda, bato nyonso ya mayele ya misala ya maboko mpe ba-oyo basalelaka bibende. Bango nyonso bazalaki bato nkoto zomi. Kaka babola nde batikalaki kati na mokili. \v 15 Nabukodonozori amemaki Yeoyakini na bowumbu na Babiloni ; amemaki mpe, longwa na Yelusalemi kino na Babiloni, mama ya mokonzi, basi ya mokonzi, bakalaka ya lokumu mpe bankumu ya mokili. \v 16 Mokonzi ya Babiloni amemaki mpe na bowumbu na Babiloni mampinga nyonso ya bato nkoto sambo oyo bazalaki makasi mpe babongisama mpo na bitumba, bakisa bato nkoto moko oyo basalaka misala ya maboko mpe oyo basalelaka bibende. \p \v 17 Mokonzi ya Babiloni akomisaki Matania, noko ya Yeoyakini, mokonzi na esika na ye ; mpe abongolaki kombo na ye, akomisaki yango « Sedesiasi. » \s1 Sedesiasi, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 36.11-16) \p \v 18 Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Amutali. » Amutali azalaki mwana ya Jeremi, moto ya Libina. \v 19 Sedesiasi asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Yeoyakimi asalaki. \v 20 Ezalaki mpo na kanda makasi ya Yawe nde makambo oyo nyonso esalemelaki Yelusalemi mpe Yuda, kino Yawe kobengana bango mosika ya elongi na Ye. \p Nzokande, Sedesiasi atombokelaki mokonzi ya Babiloni. \c 25 \s1 Kokweyisama ya Yelusalemi \r (2Ma 36.17-20) \p \v 1 Tango Sedesiasi akokisaki mibu libwa na bokonzi, na mokolo ya zomi ya sanza mpe ya zomi, Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, elongo na mampinga na ye nyonso, ayaki kobundisa Yelusalemi. Batongaki molako na bango libanda ya engumba, mpe atongaki mabulu mpo na kobombama, na zingazinga na yango nyonso. \v 2 Engumba yango ezingelamaki kino na mobu ya zomi na moko ya bokonzi ya Sedesiasi. \v 3 Na mokolo ya libwa ya sanza ya minei, wana nzala makasi ekotaki kati na engumba mpe bato bazalaki lisusu na eloko ya kolia te, \v 4 bongo lokola lidusu moko efungwamaki kati na mir ya engumba, basoda nyonso ya Yuda bakimaki butu-butu mpe babimelaki na ekuke oyo ezalaki na kati-kati ya bamir mibale, pene ya elanga ya mokonzi, atako bato ya Babiloni bazingelaki engumba. Bakimaki na nzela ya lubwaku ya Yordani. \v 5 Kasi basoda ya Babiloni balandaki mokonzi mpe bakangaki ye kati na etando ya Jeriko epai wapi basoda na ye nyonso bakimaki ye mpe bapanzanaki. \v 6 Basoda ya Babiloni bakangaki mokonzi ya Yuda mpe bamemaki ye epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila epai wapi bakatelaki ye etumbu. \v 7 Bakataki mito ya bana mibali ya Sedesiasi na miso na ye ; mpe Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atobolaki miso ya Sedesiasi, apesaki mitindo ete bakanga ye minyololo ya bronze mpe bamema ye na Babiloni. \s1 Bamemi bato ya Yuda na bowumbu \p \v 8 Tango Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, akokisaki mibu zomi na libwa na bokonzi, Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli mpe mosali ya mokonzi ya Babiloni, ayaki na Yelusalemi na mokolo ya sambo ya sanza ya mitano. \v 9 Atumbaki Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe bandako nyonso ya Yelusalemi ; atumbaki bandako nyonso ya bato minene. \v 10 Mampinga nyonso ya Babiloni, oyo ezalaki na se ya bokonzi ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi babukaki bamir oyo ezingelaki Yelusalemi. \v 11 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, amemaki na bowumbu bato oyo batikalaki kati na engumba, bato oyo bamipesaki epai ya mokonzi ya Babiloni mpe bato mosusu oyo batikalaki. \v 12 Kasi mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atikaki kati na mokili ndambo ya babola mpo na kolona vino mpe bilanga. \p \v 13 Bato ya Babiloni babukaki makonzi ya bronze oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe, bashario ya bronze mpe nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, mpe bamemaki bronze na yango na Babiloni. \v 14 Bakamataki lisusu biloko nyonso ya bronze oyo bazalaki kosala na yango losambo kati na Tempelo, basani ya putulu, bapawu, bambeli, bakopo. \v 15 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi akamataki lisusu biloko nyonso ya wolo mpe ya palata : bambabola mpe basani ya kobwakela mayi. \v 16 Bakokaki te komeka kilo ya bronze ya biloko nyonso oyo Salomo asalaki mpo na Tempelo ya Yawe : makonzi nyonso mibale, nzungu ya monene mpe bashario. \v 17 Likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na bosanda. Moto ya likonzi, oyo ezalaki na songe, ezalaki ya bronze mpe na metele pene moko na ndambo na molayi ; mpe bazingelaki yango na bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe bambuma ya grenade. Makonzi nyonso mibale mpe bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama ezalaki ndenge moko. \p \v 18 Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi atiaki na boloko Seraya, mokonzi ya Banganga-Nzambe ; Sofoni, molandi ya mokonzi ya Banganga-Nzambe ; mpe Banganga-Nzambe misato oyo bazalaki na mokumba ya kokengela ekotelo ya Tempelo. \v 19 Kati na bato oyo batikalaki kati na engumba, akangaki lisusu moko kati na bakalaka ya lokumu, oyo azalaki na mokumba ya kotala makambo ya basoda ya bitumba, bapesi toli mitano, mokomi mikanda ya mokonzi ya mampinga, oyo azalaki na mokumba ya kokoma bakombo ya bato ya mboka mpo na kokota na mosala ya mampinga ; mpe mibali tuku motoba ya Yuda, oyo bakutaki kati na engumba. \v 20 Nebuzaradani, mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, akamataki bango nyonso mpe amemaki bango epai ya mokonzi ya Babiloni, na Ribila. \v 21 Mokonzi ya Babiloni abomaki bango kuna na Ribila, kati na mokili ya Amati. Boye, bato ya Yuda bakendeki na bowumbu mosika ya mokili na bango. \b \p \v 22 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, atiaki Gedalia, mwana mobali ya Ayikami mpe koko ya Shafani, lokola moyangeli ya bato oyo atikaki kati na mokili ya Yuda. \s1 Babomi moyangeli \p \v 23 Tango bakonzi nyonso ya mampinga elongo na basoda na bango bayokaki ete mokonzi ya Babiloni akomisi Gedalia moyangeli, bakendeki na Mitsipa epai ya Gedalia. Tala bakombo ya bato yango : Isimaeli, mwana mobali ya Netania ; Yoanani, mwana mobali ya Karea ; Seraya, mwana mobali ya Tanumeti, moto ya Netofa ; mpe Yazania, mwana mobali ya moto moko ya Maakati. Bakendeki kuna elongo na basoda na bango. \v 24 Gedalia alapaki ndayi liboso na bango mpe basoda na bango na maloba oyo : « Bobanga te kosalela bato ya Babiloni, bovanda kati na mokili, bosalela mokonzi ya Babiloni mpe bokozala na bino malamu. » \p \v 25 Kasi na sanza ya misato, Isimaeli, mwana mobali ya Netania mpe koko ya Elishama, oyo azalaki na molongo ya libota ya bokonzi, ayaki elongo na basoda zomi ; babomaki Gedalia elongo na bato ya Yuda mpe bato ya Babiloni oyo bazalaki elongo na ye, na Mitsipa. \v 26 Boye bato nyonso, kobanda na bato ya se kino bato ya lokumu, elongo na bakonzi ya basoda, bakimaki na Ejipito, pamba te bazalaki kobanga bato ya Babiloni. \s1 Yeoyakini azwi ngolu \p \v 27 Tango Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na sambo na bowumbu, Evili-Merodaki, mokonzi ya Babiloni, ayokelaki Yeoyakini, mokonzi ya Yuda, mawa mpe abimisaki ye na boloko, na mokolo ya tuku mibale na sambo ya sanza ya zomi na mibale, kaka na mobu oyo akomaki mokonzi. \p \v 28 Evili-Merodaki asololaki na Yeoyakini na boboto mpe apesaki ye lokumu koleka bakonzi mosusu oyo bazalaki elongo na ye, na bowumbu kati na Babiloni ; \v 29 apesaki mitindo ete balongola ye bilamba ya boloko mpe andimaki ete abanda kolia mesa moko elongo na ye, mokolo na mokolo kino na suka ya bomoi na ye. \v 30 Mokonzi ya Babiloni azalaki kopesa ye nyonso oyo asengeli na yango mikolo nyonso ya bomoi na ye.