\id 2CH Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h 2 Masolo ya Kala \toc1 2 Masolo ya Kala \toc2 2 Masolo ya Kala \toc3 2Ma \mt1 2 Masolo ya Kala \c 1 \ms1 LISOLO YA SALOMO, MOKONZI YA ISALAELE \s1 Salomo asengi bwanya \p \v 1 Salomo, mwana mobali ya Davidi, alendisamaki makasi na bokonzi na ye, pamba te Yawe, Nzambe na ye, azalaki elongo na ye mpe akomisaki ye moto monene penza. \r (1Ba 3.4-15) \p \v 2 Salomo abengisaki Isalaele mobimba : bakonzi ya bankoto ya basoda, bakonzi ya bankama ya basoda, basambisi, bakambi ya Isalaele mobimba mpe bakambi ya mabota. \v 3 Bongo, Salomo elongo na lisanga mobimba bakendeki na esambelo ya likolo ya ngomba, na Gabaoni, pamba te Ndako ya kapo ya Bokutani ya Nzambe, oyo Moyize, mosali na Yawe, atelemisaki na esobe ezalaki kuna. \v 4 Nzokande, Davidi amemaki Sanduku ya Nzambe, wuta na Kiriati-Yearimi kino na esika oyo abongisaki mpo na yango, pamba te atelemisaki mpo na yango Ndako ya kapo kati na Yelusalemi. \v 5 Kasi etumbelo ya bronze oyo Betisaleyeli, mwana mobali ya Uri mpe koko ya Wuri, atongaki ezalaki liboso ya Mongombo. Ezalaki kuna nde Salomo elongo na lisanga mobimba balukaki Yawe. \p \v 6 Salomo akendeki na etumbelo ya bronze, liboso ya Yawe kati na Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe abonzaki kuna bambeka ya kotumba nkoto moko. \p \v 7 Na butu wana, Nzambe abimelaki Salomo mpe alobaki na ye : \pi1 — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo. \p \v 8 Salomo azongiselaki Nzambe : \pi1 — Otalisi bolamu monene epai ya Davidi, tata na ngai, mpe otie ngai mokonzi na esika na ye. \v 9 Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, tika ete elaka oyo opesaki epai ya Davidi, tata na ngai, ekokisama ! Pamba te ezali Yo nde otie ngai mokonzi ya bato oyo bazali ebele lokola putulu ya mabele. \v 10 Pesa ngai bwanya mpe boyebi mpo ete nakoka kotambolisa bato oyo. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ? \p \v 11 Nzambe alobaki na Salomo : \pi1 — Lokola likambo oyo ezali posa ya motema na yo ; lokola osengi bozwi te, bomengo to lokumu te to mpe kufa ya banguna na yo te ; lokola osengi te bomoi molayi, kasi osengi bwanya mpe boyebi mpo na kotambolisa bato na Ngai, oyo natie yo mokonzi na bango, \v 12 bwanya mpe boyebi ekopesamela yo, mpe nakopesa yo lisusu bozwi, bomengo mpe lokumu oyo mokonzi moko te, liboso na yo, atikala kozwa, mpe mokonzi moko te, sima na yo, akotikala kozwa. \p \v 13 Bongo Salomo alongwaki na esambelo ya likolo ya ngomba, na Gabaoni epai wapi akendeki liboso ya Ndako ya kapo ya Bokutani, mpe azongaki na Yelusalemi. Mpe akomaki mokonzi ya Isalaele. \s1 Bozwi ya Salomo \r (1Ba 10.26-29; 2Ma 9.25-28) \p \v 14 Salomo asangisaki bashar mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda ; azalaki na bashar nkoto moko na nkama minei, mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. Abombaki bango kati na bingumba epai wapi babombaka bashar, mpe na Yelusalemi epai wapi mokonzi azalaki kovanda. \v 15 Mokonzi asalaki ete wolo mpe palata ekoma ebele na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku. \v 16 Bampunda ya Salomo ezalaki kowuta na Ejipito mpe na engumba Kue. Bato ya mombongo ya mokonzi nde bazalaki kosomba yango kuna na engumba Kue. \v 17 Bazalaki kosomba na Ejipito shar moko na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkama motoba, mpe mpunda moko na motuya ya mbongo ya bibende, nkama moko na tuku mitano ; bazalaki mpe kosomba yango mpo na bakonzi nyonso ya bato ya Iti mpe ya Siri. \c 2 \r (1Ba 5.15-30; 7.13-51) \p \v 1 Salomo apesaki mitindo mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako ya mokonzi mpo na ye moko. \s1 Mabongisi mpo na kotonga Tempelo ya Yawe \p \v 2 Salomo asangisaki bato nkoto tuku sambo mpo na komema biloko ya kotongela, bato nkoto tuku mwambe mpo na kobuka mabanga na bangomba, mpe bato nkoto misato na nkama motoba mpo na kokengela bango. \p \v 3 Salomo atindaki maloba oyo epai ya Irami, mokonzi ya Tiri : \pm — Sala na ngai ndenge osalaki mpo na Davidi, tata na ngai, tango otindelaki ye mabaya ya nzete ya sedele mpo na kotonga ndako na ye ya kovanda. \v 4 Nzokande, ngai nalingi sik’oyo kotonga Tempelo mpo na Kombo na Yawe, Nzambe na ngai, mpo na kobulisa yango mpo na lokumu na Ye, mpo na kobonzela Ye malasi ya solo kitoko lokola mbeka, mpo na kobongisaka kuna mapa tango nyonso, mpo na kobonzaka kuna bambeka ya kotumba, tongo mpe pokwa, mpe mpo na kosepelaka kuna mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, ya Yawe, Nzambe na biso, ndenge ezali malako ya tango nyonso mpo na Isalaele. \v 5 Tempelo oyo nakotonga ekozala monene, pamba te Nzambe na biso azali monene koleka banzambe nyonso. \v 6 Kasi nani akoki kotongela Ye Tempelo, pamba te Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Ye te ? Mpe ngai nde nani mpo ete natongela Ye Tempelo, soki kaka etumbelo te mpo na kotumba mbeka ya malasi liboso na Ye ? \pm \v 7 Boye, tindela ngai moto oyo ayebi kosalela wolo, palata, bronze, ebende, langi ya motane ya pete, langi ya motane ya makasi mpe langi ya ble, mpe ayebi kotobola bililingi, mpo ete asala mosala, kati na Yuda mpe Yelusalemi, elongo na basali na ngai, oyo bayebi penza mosala, ba-oyo Davidi, tata na ngai, abongisaki. \v 8 Tindela ngai mpe, wuta na Libani, mabaya ya nzete ya sedele, ya sipele mpe ya santale, pamba te nayebi ete bato na yo bayebi malamu kokata banzete ya Libani. Bato na ngai bakosala elongo na basali na yo, \v 9 bakobongisela ngai mabaya ebele, pamba te Tempelo oyo nazali kotonga esengeli kozala monene mpe kitoko. \v 10 Nakopesa na basali na yo, oyo bakokata banzete batone nkoto motoba ya ble, batone nkoto minei ya orje, balitele ya vino nkoto nkama libwa, balitele ya mafuta nkoto nkama libwa. \p \v 11 Irami, mokonzi ya Tiri, azongiselaki Salomo na mokanda : \pm — Ezali mpo ete Yawe alingi bato na Ye nde akomisi yo mokonzi na bango. \p \v 12 Irami alobaki na ye lisusu : \pm — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, Mokeli ya likolo mpe se, apambolama, mpo ete apesi na mokonzi Davidi mwana mobali ya mayele mpe ya bososoli, oyo akotonga Tempelo mpo na Yawe mpe ndako ya mokonzi mpo na ye moko. \v 13 Nazali kotindela yo sik’oyo Urami-Abi ; azali penza moto moko ya mayele oyo ayebi mosala malamu. \v 14 Mama na ye azalaki moto ya libota ya Dani, mpe tata na ye, moto ya Tiri. Abongisama mpo na misala ya wolo, ya palata, ya bronze, ya ebende, ya mabanga, ya mabaya, ya kotia langi ya motane makasi, ya ble, ya motane ya pete mpe ya kobongisa lino ya pete. Ayebi malamu mosala ya kotobola bililingi, mpe akoki kosala mosala nyonso oyo bakosenga ye. Akosala elongo na basali na yo mpe na basali ya nkolo na ngai, Davidi, tata na yo. \pm \v 15 Sik’oyo, tika ete nkolo na ngai atinda epai ya basali na ye ble, orje, mafuta mpe masanga ya vino oyo alakaki. \v 16 Biso, tokokata banzete nyonso ya Libani, oyo ozali na yango posa ; tokokangisa mpe tokotinda yango na nzela ya mayi ya ebale monene kino na Jafa. Wuta kuna, yo okokomisa yango na Yelusalemi. \p \v 17 Salomo atangaki motango ya bapaya nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele kolanda ndenge Davidi, tata na ye, atangaki motango ya bato. Bazalaki bato nkoto nkama moko na tuku mitano na misato na nkama motoba. \v 18 Aponaki bato nkoto tuku sambo mpo na komema biloko, bato nkoto tuku mwambe mpo na kobuka mabanga na bangomba, mpe bakengeli nkoto misato na nkama motoba mpo na kosalisa bato misala. \c 3 \s1 Salomo atongi Tempelo ya Yawe \r (1Ba 6.1-29) \p \v 1 Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe kati na Yelusalemi, na likolo ya ngomba Morija epai wapi Yawe abimelaki Davidi, tata na ye, mpe kaka na esika oyo Davidi abongisaki na etando ya Orinani, moto ya Yebusi. \v 2 Abandaki kotonga na mokolo ya mibale ya sanza ya mibale, na mobu ya minei ya bokonzi na ye. \v 3 Moboko oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Nzambe ezalaki na bametele pene tuku misato na molayi, mpe bametele pene zomi, na mokuse. \v 4 Ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe ezalaki na bametele pene zomi, na bosanda, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto kati na yango. \v 5 Babetaki mabaya ya sipele na bamir ya eteni oyo eleki monene mpe abambaki wolo ya peto na likolo na yango. Asalaki bililingi ya nzete ya mbila mpe ya basinga elingama-lingama lokola basheni. \v 6 Abambaki mabanga ya talo mpo na kokomisa yango kitoko. Wolo oyo asalelaki ezalaki wolo ya Parivayimi. \v 7 Apakolaki wolo na motondo, na bikuke, na bamir, mpe atobolaki bililingi ya basheribe na bamir. \p \v 8 Atongaki Esika-Oyo-Eleki-Bule ; molayi na yango ekokanaki na mokuse ya Tempelo ya Yawe : bametele pene zomi, na molayi, mpe bametele pene zomi, na mokuse. Apakolaki wolo ya peto ya bakilo pene nkoto tuku mibale kati na Tempelo ya Yawe. \v 9 Basete oyo basalelaki ezalaki ya wolo, mpe ezalaki ya bagrame nkama motoba. Apakolaki lisusu wolo na bashambre ya likolo. \p \v 10 Atiaki bililingi ya basheribe mibale kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe apakolaki yango wolo. \v 11 Mapapu ya basheribe ezalaki na bametele pene zomi na molayi. Lipapu ya sheribe ya liboso ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe etutaki mir ya Tempelo ya Yawe ; bongo lipapu na ye mosusu, oyo ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano, etutaki lipapu ya sheribe ya mibale, oyo ezalaki mpe na bametele mibale na basantimetele tuku mitano. \v 12 Ndenge moko mpe mpo na lipapu ya sheribe ya mibale, oyo ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano : etutaki mir mosusu ya Tempelo ya Yawe ; mpe lipapu mosusu oyo ezalaki na molayi ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano etutaki lipapu ya sheribe ya liboso. \v 13 Mapapu ya basheribe yango ezalaki ya kofungwama na molayi ya bametele pene zomi. Basheribe nyonso mibale batelemaki na makolo na bango, mpe bilongi na bango ezalaki kotala na ngambo ya kati ya Esika ya bule. \p \v 14 Asalaki rido ya lino, ya langi ya ble, ya motane ya pete mpe ya motane makasi, mpe atongaki bililingi ya basheribe na likolo na yango. \r (1Ba 7.15-22) \p \v 15 Na liboso ya Tempelo ya Yawe, atongaki makonzi mibale oyo ezalaki na bametele pene zomi na sambo na bosanda. Na likolo ya likonzi moko na moko, ezalaki na moto ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano. \v 16 Asalaki bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni mpe atiaki yango na mito ya makonzi ; asalaki lisusu bililingi ya bambuma nkama moko ya grenade, mpe akangisaki yango na bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni. \v 17 Mpe atongaki makonzi liboso ya Tempelo ya Yawe : moko na ngambo ya loboko ya mwasi, mpe mosusu, na ngambo ya loboko ya mobali. Abengaki likonzi ya ngambo ya loboko ya mwasi Yakini\f + \fr 3.17 \fr*\ft Yakini elakisi : Nzambe alendisi.\ft*\f*, mpe oyo ya ngambo ya loboko ya mobali, Boazi\f + \fr 3.17 \fr*\ft Boazi elakisi : makasi ezali kati na Nzambe.\ft*\f*. \c 4 \s1 Bisalelo ya Tempelo \p \v 1 Salomo asalaki etumbelo ya bronze ya bametele zomi na molayi, bametele pene zomi na mokuse, mpe bametele mitano na bosanda. \r (1Ba 7.23-26) \p \v 2 Asalaki nzungu ya monene ya bronze, oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu : monene na yango ezalaki na bametele mitano ; bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe zingazinga na yango, bametele zomi na mitano. \v 3 Na se ya monoko na yango, na pembeni na yango nyonso, ezalaki na milongo mibale ya bililingi ya bangombe oyo banyangwisaki mpe babambaki na nzungu ya monene mpo ete esala eloko kaka moko ; ezalaki bililingi zomi mpo na molayi ya kati-kati ya metele moko. \v 4 Nzungu yango evandisamaki na likolo ya bikeko ya bangombe zomi na mibale : misato etalaki na ngambo ya nor ; misato, na ngambo ya weste ; misato, na ngambo ya sude ; mpe misato, na ngambo ya este. Bongo sima ya bangombe yango nyonso etalaki na ngambo ya kati. \v 5 Mbinga ya nzungu yango ezalaki na basantimetele pene mwambe. Babongisaki pembeni ya monoko na yango lokola pembeni ya kopo oyo batia bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki kotonda na balitele ya mayi pene nkoto tuku minei na misato. \p \v 6 Salomo asalaki lisusu basani zomi ya minene : mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano, na ngambo ya loboko ya mwasi, mpo na kosukola bisalelo mpo na bambeka ya kotumba. Kasi Banganga-Nzambe bazalaki kosukola na nzungu ya monene. \p \v 7 Asalaki lisusu bitelemiselo zomi ya minda, basala na wolo kolanda ndakisa na yango oyo epesamaki ; mpe atiaki yango na eteni oyo eleki monene kati na Tempelo : mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi. \v 8 Asalaki bamesa zomi mpe atiaki yango kati na eteni oyo eleki monene : mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi. Asalaki lisusu bakopo nkama moko ya wolo mpo na kosopela makila na likolo ya etumbelo. \v 9 Asalaki lopango ya Banganga-Nzambe mpe lopango monene. Asalaki bikuke ya lopango mpe alatisaki yango bronze. \r (1Ba 7.38-51) \p \v 10 Atiaki nzungu ya monene na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, na ngambo ya sude-este. \p \v 11 Urami asalaki basani ya kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. \p Urami asilisaki mosala nyonso oyo mokonzi Salomo atindaki ye kosala mpo na Tempelo ya Nzambe : \v 12 makonzi mibale, mito mibale ya libungutulu na suka ya makonzi nyonso mibale, bililingi mibale ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi yango, \v 13 bililingi ya bambuma ya grenade nkama minei ekangana na maboke ya bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama : milongo mibale ya bililingi ya grenade mpo na elilingi moko na moko ya basinga oyo basala lokola monyama, mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi ; \v 14 bivandelo zomi mpe basani zomi ya minene, oyo batiaki na likolo ya bivandelo, \v 15 nzungu ya monene ya libungutulu, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki komema nzungu ya monene, \v 16 basani mpo na kotia putulu, bapawu, biloko ya songe mpo na misuni elongo na bisalelo na yango nyonso. Urami-Abi asalelaki mokonzi Salomo biloko oyo nyonso mpo na Tempelo ya Yawe ; asalaki yango na bronze oyo bapetola na moto. \v 17 Mokonzi asengaki ete banyangwisa yango kati na mabele, na etando ya Yordani, kati na Sukoti mpe Tseredata. \v 18 Mpo ete Salomo asalaki biloko oyo nyonso ebele koleka, yango wana bakokaki te koyeba kilo ya bronze oyo basalelaki. \p \v 19 Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe : etumbelo ; bamesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe ; \v 20 bitelemiselo ya minda elongo na minda na yango, oyo basala na wolo ya peto, mpo na kopela liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, \v 21 bafololo na yango, minda na yango mpe biloko ya wolo ya kozwela makala na moto, basala na wolo ya peto makasi ; \v 22 bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, bikangelo ya wolo ya bikuke ya Esika-Oyo-Eleki-Bule mpe bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo. \c 5 \s1 Bamemi Sanduku na Tempelo \p \v 1 Tango Salomo asilisaki misala nyonso ya kotonga Tempelo ya Yawe, amemaki biloko oyo Davidi, tata na ye, abulisaki : palata, wolo mpe bisalelo nyonso ; atiaki yango kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Nzambe. \r (1Ba 8.1-21) \p \v 2 Bongo Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota nyonso ya bato ya Isalaele, mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi. \v 3 Bato nyonso ya Isalaele basanganaki pene ya mokonzi na tango ya feti ya Bandako ya kapo, na sanza ya sambo. \v 4 Tango bakambi nyonso ya Isalaele bakomaki, Balevi batombolaki Sanduku. \p \v 5 Banganga-Nzambe mpe Balevi bamemaki Sanduku yango, Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bisalelo nyonso ya bule oyo ezalaki kati na Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 6 Mokonzi Salomo mpe lisanga mobimba ya Isalaele oyo esanganaki epai na ye liboso ya Sanduku babonzaki lokola mbeka bameme mpe bangombe oyo balongaki kotanga te mpo na koyeba motango na yango, pamba te ezalaki ebele penza. \v 7 Banganga-Nzambe batiaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na esika na yango, kati na Tempelo, kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, na se ya mapapu ya basheribe. \v 8 Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo ya esika oyo Sanduku ezalaki, bongo ezipaki Sanduku mpe banzete ya komemela yango. \v 9 Mpo ete banzete yango elekaki milayi, basonge na yango ezalaki komonana wuta na likolo ya Sanduku, na liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ; kasi ezalaki komonana te wuta na libanda. Sanduku etikala wana kino na mokolo ya lelo. \v 10 Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito. \v 11 Tango Banganga-Nzambe bazalaki kobima libanda ya Esika ya bule, pamba te bango nyonso bamibulisaki mpe batalaki kokitana ya masanga na bango te, \v 12 Balevi oyo nyonso bazalaki kobeta mindule : Azafi, Emani, Yedutuni elongo na bana na bango ya mibali mpe bandeko na bango ; bazalaki kotelema na ngambo ya este ya etumbelo, balata bilamba ya lino ya kitoko, mpe bazalaki kobeta manzanza, mandanda mpe banzenze. Bazalaki elongo na Banganga-Nzambe nkama moko na tuku mibale oyo bazalaki kobeta bakelelo. \v 13 Babeti nyonso ya bakelelo mpe bayembi bazalaki kosangana lokola moto moko mpo na kotombola mongongo moko, mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe. Bazalaki kotombola mingongo na bango mpo na kokumisa mpe koyembela Yawe na bakelelo, na manzanza mpe na bibetelo mosusu ya mindule : \q1 Yawe azali malamu, \q2 bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! \p Na tango wana kaka, Tempelo ya Yawe etondisamaki na lipata. \v 14 Mpe mpo na lipata, Banganga-Nzambe bakokaki lisusu te kotelema kati na yango mpo na kosala mosala na bango, pamba te nkembo na Yawe etondisaki Tempelo ya Nzambe. \c 6 \s1 Salomo akumisi Yawe \p \v 1 Bongo Salomo alobaki : « Yawe alobaki ete akovanda kati na esika ya molili ! \v 2 Mpe ngai natongeli Yo ndako ya lokumu, esika oyo okovanda mpo na libela ! » \r (1Ba 8.14-21) \p \v 3 Mokonzi abalukaki mpe apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele. Lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki ya kotelema. \v 4 Alobaki : \pi1 — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama ; Ye oyo, na monoko na Ye moko, alobaki na tata na ngai, Davidi, mpe akokisi, na maboko na Ye, makambo oyo alakaki : \v 5 « Wuta mokolo oyo nabimisaki bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito, naponaki engumba moko te kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo ete batonga kuna Tempelo epai wapi Kombo na Ngai ekozala, mpe naponaki moto mosusu te lokola mokonzi ya bato na Ngai, Isalaele, \v 6 kasi naponaki nde Yelusalemi mpo ete Kombo na Ngai ezala kuna, mpe Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele ! » \pi1 \v 7 Tata na ngai, Davidi, azalaki na makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. \v 8 Kasi Yawe alobaki na Davidi, tata na ngai : « Osali malamu lokola ozwi makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. \v 9 Kasi ezali yo te moto okotonga Tempelo yango ; ezali nde mwana na yo ya mobali, oyo akobima na mokongo na yo moko, moto akotonga Tempelo yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. » \pi1 \v 10 Yawe akokisi elaka na Ye : nakitani tata na ngai, Davidi ; navandi na kiti ya bokonzi ya Isalaele, ndenge kaka Yawe alobaki, mpe natongi Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. \v 11 Natie kuna Sanduku ya Boyokani ya Yawe, boyokani oyo asalaki elongo na bana ya Isalaele. \s1 Libondeli ya Salomo \r (1Ba 8.22-53) \p \v 12 Bongo Salomo atelemaki liboso ya etumbelo ya Yawe ; mpe na miso ya lisanga mobimba ya Isalaele, atombolaki maboko na ye. \v 13 Solo, Salomo atongaki na bronze etemelo ya kolobela : ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na molayi, bametele mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse, mpe metele pene moko na bosanda ; mpe atiaki yango na kati-kati ya lopango. Amataki na likolo na yango, afukamaki liboso ya lisanga mobimba ya Isalaele, atombolaki maboko likolo \v 14 mpe asambelaki : \pm — Yawe, Nzambe ya Isalaele ! Ezali na nzambe moko te oyo akokani na Yo, ezala kuna na likolo to awa na se. Obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo mpo na basali na Yo, oyo batambolaka kolanda mokano na Yo na mitema na bango mobimba. \v 15 Okokisi bilaka oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo ; makambo oyo olobaki, na monoko na Yo, okokisi yango na nguya ya loboko na Yo, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo. \pm \v 16 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, kokisa mpe elaka mosusu oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, tango olobaki na ye : « Okozangaka te moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele, na miso na Ngai, soki bana na yo bakotambola malamu liboso na Ngai mpe bakotosa mibeko na Ngai, ndenge yo otamboli kolanda mokano na Ngai. » \v 17 Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, tika ete elaka oyo opesaki na Davidi, mosali na Yo, ekokisama ! \pm \v 18 Boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili elongo na bato ? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo ngai natongi ? \v 19 Yawe, Nzambe na ngai, yoka na bokebi losambo mpe libondeli na ngai, mowumbu na Yo ! Yoka koganga mpe libondeli oyo mowumbu na Yo azali kotombola epai na Yo ! \v 20 Tika ete, moyi mpe butu, miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na kotala Tempelo oyo, esika oyo olobaki ete okotia kuna Kombo na Yo ! Yoka losambo oyo mowumbu na Yo azali kotombola na esika oyo ! \v 21 Okoyoka mabondeli oyo mowumbu na Yo mpe bato na Yo, Isalaele, bakotombola epai na Yo na kotala na ngambo ya esika oyo ! Tika ete oyoka biso wuta na Likolo, evandelo na Yo ; yoka mpe limbisa ! \pm \v 22 Soki moto asali lisumu epai ya mozalani na ye, mpe batindi ye na makasi ete alapa ndayi esangana na bilakeli mabe, liboso ya etumbelo na Yo kati na Tempelo oyo, \v 23 yoka wuta na Likolo ; sala mpe kata makambo kati na bawumbu na Yo mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe mpe komemisa ye ngambo ya mabe na ye kolanda etamboli na ye, mpe mpo na kolongisa moto ya sembo mpe kosalela ye kolanda bosembo na ye. \pm \v 24 Soki banguna balongi bato na Yo, Isalaele, mpo ete basalaki masumu liboso na Yo, soki babongoli mitema mpo na kozongela Yo, basanzoli Kombo na Yo, basambeli mpe babondeli Yo, kati na Tempelo oyo, \v 25 yoka wuta na Likolo, limbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, mpe zongisa bango na mabele oyo opesaki bango mpe batata na bango ! \pm \v 26 Soki likolo ekangami mpe mvula ezali lisusu te mpo ete basalaki masumu liboso na Yo, soki basambeli na kotala na ngambo ya esika oyo, basanzoli Kombo na Yo mpe batiki masumu na bango, pamba te osili koyokisa bango soni, \v 27 yoka bango wuta na Likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo. \pm \v 28 Soki nzala makasi to bokono makasi to moto to bokawuki to kopola ya bambuma to mabanki to mankoko eyei kati na mokili, soki banguna bazingeli bato na Yo kati na mokili na bango, na bikuke ya bingumba na bango, to soki pasi to bokono ya lolenge nyonso ekweyeli bango, \v 29 soki, wana bato na Yo, Isalaele, bayoki mawa makasi kati na mitema na bango mpo na pasi to bokono yango, moko na moko atomboli maboko na ye na ngambo ya Tempelo oyo, asambeli to abondeli Yo, \v 30 yoka ye wuta na Likolo, evandelo na Yo, limbisa, zongisela moto na moto kolanda etamboli na ye, mpo ete oyebi motema na ye. Solo, Yo kaka nde oyebi mitema ya bato. \v 31 Sala bongo mpo ete batosa Yo mpe batambola na banzela na Yo mikolo nyonso oyo bakovanda na mabele oyo opesaki epai na batata na biso. \pm \v 32 Ndenge moko mpe mpo na mopaya oyo azali te na molongo ya Isalaele, bato na Yo : wana akowuta na mokili ya mosika, mpo na Kombo monene na Yo, mpo na loboko na Yo ya nguya mpe esembolama ; soki ayei mpe asambeli na kotala na ngambo ya Tempelo oyo, \v 33 yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo, mpe salela ye nyonso oyo akosenga Yo mpo ete bikolo nyonso ya mokili bayeba Kombo na Yo, batosa Yo lokola Isalaele, bato na Yo, mpe bayeba ete Tempelo oyo natongi ebulisami nde mpo na Kombo na Yo. \pm \v 34 Tango bato na Yo bakokende kobundisa banguna na bango na nzela oyo okolakisa bango, soki basambeli Yo na kotala na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na Kombo na Yo, \v 35 yoka wuta na Likolo losambo mpe libondeli na bango, mpe longisa bango. \pm \v 36 Tango bakosala masumu liboso na Yo, pamba te moto nyonso asalaka masumu, bongo Yo osilikeli bango mpe okabi bango na maboko ya banguna oyo bamemi bango na bowumbu kati na mokili songolo, ezala ya mosika to ya pene, \v 37 soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bowumbu na bango mpe balobi : « Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe ; » \v 38 soki, wuta na mokili epai wapi bamemaki bango na bowumbu, basengi Yo bolimbisi, na mitema mpe na milimo na bango mobimba, soki basambeli na kotala na ngambo ya mokili na bango, oyo opesaki epai na batata na bango, na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na lokumu ya Kombo na Yo, \v 39 yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo ; yoka losambo mpe mabondeli na bango, longisa bosembo na bango mpe limbisa bato na Yo na masumu oyo basalaki liboso na Yo. \pm \v 40 Kobanda sik’oyo, oh Nzambe na ngai, tika ete miso na Yo ezala ya kofungwama mpe matoyi na Yo eyoka na bokebi mabondeli oyo ekosalema na esika oyo ! \qm1 \v 41 Sik’oyo, oh Yawe Nzambe, \qm2 telema mpe yaka na esika na Yo ya bopemi, \qm2 Yo elongo na Sanduku ya nguya na Yo ! \qm1 Oh Yawe Nzambe, tika ete Banganga-Nzambe na Yo balata \qm2 lobiko lokola elamba ; \qm1 mpe tika ete basantu na Yo basepela na boboto na Yo ! \qm1 \v 42 Oh Yawe Nzambe, kobwaka te mopakolami na Yo, \qm2 kanisa bolingo monene na Yo, \qm2 oyo otalisaki epai ya Davidi, mosali na Yo ! \c 7 \s1 Nkembo na Yawe etondisi Tempelo \r (1Ba 8.62-66) \p \v 1 Tango Salomo asilisaki kosambela, moto ekitaki wuta na Likolo mpe ezikisaki mbeka ya kotumba mpe bambeka mosusu, mpe nkembo na Yawe etondisaki Tempelo. \v 2 Banganga-Nzambe bakokaki te kokota na Tempelo ya Yawe, pamba te nkembo na Yawe etondisaki yango. \v 3 Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki moto kokita mpe nkembo na Yawe na likolo ya Tempelo, bafukamaki bilongi kino na mabele ; bongo bagumbamelaki mpe basanzolaki Yawe na maloba oyo : \q1 « Azali malamu, \q2 bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! » \m \v 4 Mokonzi mpe bana nyonso ya Isalaele babonzaki bambeka liboso ya Yawe. \v 5 Mokonzi Salomo abonzaki lokola mbeka bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bameme nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso babulisaki Tempelo ya Nzambe. \v 6 Banganga-Nzambe batelemaki na bisika na bango ya mosala, ndenge moko na Balevi mpe bibetelo mindule ya Yawe oyo mokonzi Davidi asalaki mpo na kosanzola na yango Yawe na maloba oyo : « Bolingo na Ye ewumelaka seko na seko. » Ezalaki Davidi moto apesaki bango mokumba ya kobeta bibetelo mindule mpo na kokumisa Yawe. Banganga-Nzambe bazalaki ya kotalana na Balevi mpe bazalaki kobeta bakelelo ; bongo bana nyonso ya Isalaele bazalaki ya kotelema. \p \v 7 Salomo abulisaki lopango ya kati oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe mpe abonzaki wana bambeka ya kotumba mpe mafuta ya bambeka ya boyokani ; pamba te etumbelo ya bronze oyo Salomo atongaki ekokaki te koyamba bambeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta. \v 8 Boye, na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti oyo ewumelaki mikolo sambo ; ezalaki lisanga monene ya bato oyo bayaki wuta na Amati kino na mayi oyo etiolaka na kati-kati ya bangomba ya Ejipito. \v 9 Na mokolo ya mwambe, basalaki mayangani monene, pamba te babulisaki etumbelo mikolo sambo mpe basalaki feti mikolo sambo. \v 10 Bongo na mokolo ya tuku mibale na misato ya sanza ya sambo, Salomo azongisaki bato na bandako na bango ya kapo, na esengo mpe na nsayi kati na mitema mpo na bolamu oyo Yawe asalelaki Davidi, Salomo mpe Isalaele, bato na Ye. \s1 Yawe amimonisi epai ya Salomo \r (1Ba 9.1-9) \p \v 11 Sima na Salomo kosilisa kotonga Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe kokokisa nyonso oyo azalaki na yango na makanisi ya kosala kati na Tempelo ya Yawe mpe kati na ndako na ye moko, \v 12 Yawe abimelaki Salomo, na butu, mpe alobaki : \pm — Nayoki losambo na yo mpe naponi esika oyo lokola Ndako ya bambeka mpo na Ngai. \v 13 Soki nakangi likolo mpo ete mvula ebeta te to natindi mabanki mpo ete ebebisa mokili to natindi bokono mabe kati na bato, \v 14 soki bato na Ngai, oyo babengami na Kombo na Ngai bamikitisi, basambeli, baluki elongi na Ngai, mpe bapesi mokongo na banzela na bango ya mabe, Ngai, nakoyoka bango wuta na Likolo, nakolimbisa masumu na bango mpe nakobikisa mokili na bango. \v 15 Kobanda sik’oyo, miso na Ngai ekofungwama, mpe matoyi na Ngai ekoyoka na bokebi mabondeli oyo ekosalema na esika oyo. \v 16 Naponi mpe nabulisi Tempelo wana mpo ete Kombo na Ngai ezala kuna tango nyonso. Miso mpe motema na Ngai ekozala kuna na Tempelo yango mpo na libela. \pm \v 17 Mpo na yo, soki okotambola liboso na Ngai ndenge Davidi, tata na yo, atambolaki ; soki okosala nyonso oyo natindaki yo mpe okobatela mibeko mpe malako na Ngai, \v 18 nakolendisa kiti na yo ya bokonzi kolanda boyokani oyo nasalaki elongo na Davidi, tata na yo, tango nalobaki : « Okotikalaka kozanga te mokitani mpo na kokamba Isalaele lokola mokonzi. » \pm \v 19 Kasi soki bopengwi mosika na Ngai, soki bosundoli mibeko mpe malako na Ngai, oyo natie liboso na bino ; soki bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango, \v 20 nakopikola bino na mabele na Ngai, mabele oyo napesaki bino ; nakobwaka mosika ya miso na Ngai Tempelo oyo nabulisi mpo na Kombo na Ngai mpe nakokomisa yango eloko ya kotiola mpe ya soni kati na bikolo nyonso. \v 21 Atako Tempelo oyo ezali sik’oyo kitoko penza, kasi bato nyonso oyo bakoleka pembeni na yango bakokamwa mpe bakoloba : « Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na mokili oyo mpe na Tempelo oyo ? » \v 22 Mpe bakoyanola : « Ezali mpo ete basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na Ejipito mpe bamipesaki na banzambe mosusu, bafukamelaki yango mpe basalelaki yango ; yango wana Yawe ayeisi likolo na bango pasi oyo nyonso. » \c 8 \s1 Misala mosusu ya Salomo \r (1Ba 9.10-28) \p \v 1 Sima na mibu tuku mibale oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako na ye moko, \v 2 Salomo atongaki lisusu bingumba mike oyo Irami apesaki ye mpe avandisaki kuna bana ya Isalaele. \v 3 Salomo akendeki kobundisa engumba Amati ya Tsoba mpe abotolaki yango. \v 4 Kati na esobe, atongaki engumba Tadimori ; mpe kati na Amati, atongaki bingumba nyonso ya kobombela biloko. \v 5 Atongaki lisusu Beti-Oroni ya likolo mpe Beti-Oroni ya se lokola bingumba batonga makasi, elongo na bamir, bikuke mpe bibende oyo bakangelaka bikuke, \v 6 Baalati mpe bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba biloko na ye, bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba bashar mpe bampunda na ye. Salomo atongaki lisusu nyonso oyo azalaki na yango posa kati na Yelusalemi, na Libani mpe na mokili nyonso oyo azalaki kokamba. \v 7 Batikali nyonso kati na bato ya Iti, ya Amori, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, ba-oyo bazalaki bana ya Isalaele te, \v 8 ba-oyo bana na bango batikalaki kati na mokili oyo bana ya Isalaele babebisaki, Salomo azwaki bango mpo na misala makasi, kino na mokolo ya lelo. \v 9 Kasi Salomo akomisaki te bana ya Isalaele bawumbu mpo na kosala misala makasi na ye, pamba te bazalaki bato ya bitumba, bakonzi ya basoda na ye, bakonzi ya bashar na ye mpe ya basoda na ye, oyo batambolisaka bashar. \v 10 Ezalaki mpe na bakalaka ya lokumu oyo mokonzi Salomo atiaki mpo na kokamba basali na ye. Motango na bango ezalaki nkama mibale na tuku mitano. \p \v 11 Salomo alongolaki mwana mwasi ya Faraon kati na engumba ya Davidi mpe amemaki ye na ndako oyo atongelaki ye, pamba te alobaki : « Mwasi na ngai asengeli te kovanda kati na ndako ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, mpo ete bisika oyo Sanduku ya Yawe ekoti ezali bule. » \p \v 12 Salomo abonzaki epai na Yawe bambeka ya kotumba, na etumbelo ya Yawe, oyo atongaki liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe. \v 13 Azalaki kobonza yango mokolo na mokolo, kolanda mitindo ya Moyize na tina na mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti misato oyo esalemaka mibu nyonso : feti ya Mapa ezanga levire, feti ya Baposo mpe feti ya Bandako ya kapo. \v 14 Kolanda mokano ya Davidi, tata na ye, Salomo atiaki masanga ya Banganga-Nzambe kati na misala na bango mpe Balevi mpo na kokumisa Yawe mpe kosunga Banganga-Nzambe ndenge ebongisamaki mpo na mokolo na mokolo. Aponaki lisusu masanga ya bakengeli bikuke mpo na ekuke moko na moko kolanda etinda oyo Davidi, moto na Nzambe, apesaki. \v 15 Batosaki na makambo nyonso mitindo ya mokonzi mpo na oyo etali Banganga-Nzambe mpe Balevi, ezala mpo na oyo etali bibombelo bomengo. \v 16 Ezali boye nde misala nyonso ya Salomo esalemaki, kobanda na mokolo oyo batongaki moboko ya Tempelo ya Yawe kino na mokolo oyo esilaki. Boye, Tempelo ya Yawe esilaki kotongama. \p \v 17 Salomo akendeki na Etsioni-Geberi mpe na Eyiloti, pembeni ya ebale monene ya Barozo, kati na mokili ya Edomi. \v 18 Irami atindelaki ye, na nzela ya basali na ye, bamasuwa mpe bato oyo bayebaki kotambolisa malamu masuwa kati na ebale. Bato ya Irami batambolaki elongo na basali ya Salomo kino na Ofiri, mpe bazwaki kuna bakilo nkoto zomi na mitano ya wolo oyo bamemaki epai ya mokonzi Salomo. \c 9 \s1 Mwasi mokonzi ya Saba mpe Salomo \r (1Ba 10.1-13) \p \v 1 Tango mwasi mokonzi ya Saba ayokaki sango ya lokumu ya Salomo, ayaki na Yelusalemi mpo na komeka ye na nzela ya mituna ya makasi ; ayaki elongo na bato ebele mpe bashamo oyo ememaki biloko ya mike-mike oyo epesaka solo kitoko, wolo ebele mpe mabanga ya talo. Tango akomaki epai ya Salomo, ayebisaki ye nyonso oyo azalaki na yango kati na motema. \v 2 Salomo apesaki ye biyano na mituna na ye nyonso ; ezalaki ata na motuna moko te oyo Salomo alongaki te kopesa eyano. \p \v 3 Tango mwasi mokonzi ya Saba amonaki bwanya ya Salomo, ndako oyo atongaki, \v 4 bilei oyo azalaki kolia na mesa na ye, ndako ya basali na ye, esaleli mpe elateli ya basali na ye, basali oyo bapesaka ye masanga mpe bambeka ya kotumba oyo azalaki kobonza kati na Tempelo ya Yawe, mwasi mokonzi ya Saba akamwaki makasi. \v 5 Alobaki na mokonzi : « Makambo oyo nayokaki wuta na mokili na ngai na tina na misala mpe na bwanya na yo ezali ya solo ! \v 6 Nandimaki te makambo oyo bazalaki koloba na tina na yango kino tango ngai moko nayei mpe namoni yango na miso na ngai moko. Nzokande, kolanda oyo ngai namoni, makambo oyo bayebisaki ngai te na tina na bwanya yango ezali penza kati-kati ! Solo, oleki sango ya lokumu oyo nayokaki na tina na yo ! \v 7 Esengo na bato na yo, esengo na basali na yo, oyo batelemaka tango nyonso liboso na yo mpe bayokaka maloba na yo, oyo etonda na bwanya ! \v 8 Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti na Ye ya bokonzi lokola mokonzi mpo na kosalela Yawe, Nzambe na yo ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpe alingi ete ewumela mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi na yango, mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. » \p \v 9 Mwasi mokonzi ya Saba apesaki mokonzi Salomo bakilo nkoto misato na nkama mitano ya wolo, biloko ebele penza ya solo kitoko mpe mabanga ya talo. Etikala lisusu kozala te na biloko ebele ya solo kitoko lokola biloko oyo mwasi mokonzi ya Saba amemelaki mokonzi Salomo. \p \v 10 Lisusu, basali ya Irami mpe ya Salomo, oyo bamemaki wolo wuta na Ofiri bamemaki mpe mabaya ya santale mpe mabanga ya talo. \v 11 Mokonzi asalaki na mabaya wana ya santale makonzi ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi, banzenze mpe mandanda mpo na bayembi. Batikalaki nanu komona nyonso wana te kati na mokili ya Yuda. \v 12 Na ngambo na ye, mokonzi Salomo apesaki na mwasi mokonzi ya Saba biloko nyonso oyo azalaki na yango posa mpe oyo asengaki, koleka kutu biloko oyo amemelaki mokonzi. Sima na yango, mwasi mokonzi ya Saba azongaki elongo na basali na ye, na mokili na ye. \s1 Lokumu mpe bozwi ya Salomo \r (1Ba 10.14-29; 2Ma 1.14-17) \p \v 13 Mobu na mobu, Salomo azalaki kozwa bakilo ya wolo nkoto tuku mibale, \v 14 mbongo ya mpako ya bato ya mombongo oyo bazalaki koteka biloko oyo bazalaki kosomba na bamboka ya bapaya, mpe mbongo ya mpako ya bateki biloko ya ndenge na ndenge. Bakonzi nyonso ya Arabi mpe bayangeli ya bituka bazalaki komema wolo mpe palata epai ya Salomo. \v 15 Mokonzi Salomo asalisaki na wolo batuta banguba minene nkama mibale ; nguba moko na moko esengaki bakilo motoba ya wolo. \v 16 Asalisaki lisusu na wolo batuta banguba mike nkama misato ; nguba moko na moko ya moke esengaki bakilo misato ya wolo. Mokonzi atiaki yango kati na ndako na ye, oyo bazalaki kobenga « ndako ya zamba ya Libani. » \v 17 Mokonzi asalaki na pembe ya nzoko kiti moko monene ya bokonzi mpe abambaki yango wolo ya peto. \v 18 Kiti yango ya bokonzi ezalaki na ematelo ya binyatelo motoba, enyatelo makolo ya wolo ekanganaki na kiti. Na bangambo nyonso mibale, ezalaki na bisika ya kotia maboko, mpe bikeko mibale ya nkosi na pembeni ya bisika ya kotia maboko. \v 19 Bikeko zomi na mibale ya nkosi ezalaki na likolo ya binyatelo motoba ya ematelo : enyatelo moko na moko ezalaki na bikeko mibale, ekeko moko na ngambo moko na moko. Kati na mikili nyonso, eloko ya ndenge wana etikala nanu kosalema te. \v 20 Bakopo nyonso ya mokonzi Salomo ezalaki ya wolo, mpe biloko nyonso ya ndako ya Zamba ya Libani ezalaki ya wolo ya peto. Pamba te, na tango oyo Salomo azalaki mokonzi, palata ezalaki na motuya ata te. \v 21 Mokonzi azalaki na bamasuwa oyo ezalaki kokende na Tarsisi, elongo na basali ya Irami. Sima na mibu nyonso misato, bamasuwa ezalaki kozonga wuta na Tarsisi mpe ezalaki komema wolo, palata, pembe ya nzoko, bamakaku mpe bandeke oyo babengaka « Paoni. » \p \v 22 Mokonzi Salomo alekaki bakonzi nyonso ya mokili na bozwi mpe na bwanya. \v 23 Bakonzi nyonso ya mokili bazalaki koluka kokutana na Salomo mpo na koyoka bwanya oyo Nzambe atiaki kati na motema na ye. \v 24 Moko na moko azalaki komemela ye lokola kado biloko ya palata, biloko ya wolo, bilamba, bibundeli, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, bampunda mpe bamile. Mpe ezalaki bongo mibu nyonso. \v 25 Salomo azalaki na bashambre nkoto minei mpo na kobomba bampunda elongo na bashar, mpe batambolisi nkoto zomi na mibale mpo na bashar. Atiaki yango kati na bingumba ya bashar mpe epai na ye, Salomo, kati na Yelusalemi. \v 26 Azalaki likolo ya bakonzi nyonso, longwa na Ebale (Efrate) kino na mokili ya bato ya Filisitia mpe na mondelo ya Ejipito. \v 27 Mokonzi asalaki ete palata ekoma ebele kati na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku. \v 28 Bampunda ya Salomo ezalaki kowuta na Ejipito mpe na mikili mosusu. \r (1Ba 11.41-43) \p \v 29 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Salomo, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Natan, ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo ; mpe kati na buku ya bimoniseli ya Yedo, momoni makambo, na tina na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati. \v 30 Salomo akonzaki Isalaele mobimba mibu tuku minei, na Yelusalemi. \v 31 Bongo Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi. \c 10 \ms1 Lisolo ya bakonzi ya Yuda \s1 Isalaele atombokeli mokonzi Roboami \r (1Ba 12.1-24) \p \v 1 Roboami akendeki na Sishemi epai wapi lisanga mobimba ya Isalaele esanganaki mpo na kokomisa ye mokonzi. \v 2 Kasi sima na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, koyoka sango yango wuta na Ejipito epai wapi akendeki kobombama mpo na kokima mokonzi Salomo, azongaki wuta na Ejipito. \v 3 Boye, batindaki bato kobenga Jeroboami ; bongo ye Jeroboami elongo na lisanga mobimba ya Isalaele bakendeki epai ya Roboami mpe balobaki na ye : \pi1 \v 4 — Tata na yo anyokolaki biso makasi. Kasi sik’oyo, yo, lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ; bongo biso, tokosalela yo. \p \v 5 Roboami azongisaki : \pi1 — Bopesa ngai mikolo misato mpo na koyekola likambo yango, bongo bozongela ngai. \p Mpe bato bakendeki. \p \v 6 Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango : \pi1 — Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo ? \p \v 7 Bazongiselaki ye : \pi1 — Soki omitalisi lokola moto malamu epai ya bato oyo, soki olobeli bango na boboto mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo. \p \v 8 Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye ; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye. \v 9 Atunaki bango : \pi1 — Toli nini bozali kopesa lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo balobi na ngai : « Lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ? » \p \v 10 Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki : \pi1 — Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo : « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi ; kasi yo, lembisela biso yango ! » Yebisa bango : « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene. \v 11 Kobanda lelo, soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. » \p \v 12 Sima na mikolo misato, Jeroboami elongo na bato nyonso bazongaki epai ya Roboami, ndenge mokonzi ayebisaki bango : « Bozongela ngai sima na mikolo misato. » \v 13 Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi ; \v 14 alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango : \pi1 — Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. \p \v 15 Mokonzi aboyaki koyoka bato, pamba te ezalaki Nzambe nde asalaki bongo mpo na kokokisa Liloba oyo Yawe ayebisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, na nzela ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo. \s1 Bana ya Isalaele ya Nor batomboki \r (1Ba 12.16-19) \p \v 16 Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : \pi1 — Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! \m Wana bana nyonso ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo, \v 17 Roboami akobaki kokonza bana ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na bingumba ya Yuda. \p \v 18 Mokonzi Roboami atindaki Adorami oyo azalaki motambolisi ya misala makasi, kasi bana ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki. Nzokande, mokonzi Roboami alongaki komata na shar na ye mpo na kokima na Yelusalemi. \v 19 Ezali boye nde bana ya Isalaele batombokelaki ndako ya Davidi kino na mokolo ya lelo. \c 11 \s1 Roboami, mokonzi ya Yuda \p \v 1 Tango Roboami azongaki na Yelusalemi, asangisaki mabota ya Yuda mpe ya Benjame, aponaki bilombe ya bitumba nkoto nkama moko na tuku mwambe mpo na kobundisa Isalaele mpe kozongisa bokonzi na maboko ya Roboami. \v 2 Kasi Yawe alobaki na Shemaya, moto na Nzambe : \pi1 \v 3 — Yebisa Roboami, mwana mobali ya Salomo, mokonzi ya Yuda, mpe bana nyonso ya Isalaele oyo bazali kati na Yuda mpe Benjame : \v 4 « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Bokende te kobundisa bandeko na bino ! Tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye, pamba te ngai moko nde nasali makambo nyonso oyo eleki. › » \p Batosaki Liloba na Yawe, bazongaki na bandako na bango mpe batikaki mabongisi ya kobundisa Jeroboami. \s1 Roboami alendisi bingumba ya Yuda mpe ya Benjame \p \v 5 Wana Roboami avandaki na Yelusalemi, atongaki bamir zingazinga ya bingumba ebele ya Yuda mpo na kolendisa yango. \v 6 Alendisaki Beteleemi, Etami, Tekoa, \v 7 Beti-Tsuri, Soko, Adulami, \v 8 Gati, Maresha, Zifi, \v 9 Adorayimi, Lakishi, Azeka, \v 10 Tsorea, Ayaloni mpe Ebron. Oyo nde ezalaki bingumba batonga makasi kati na Yuda mpe Benjame. \v 11 Atongaki zingazinga na yango bamir, atiaki kuna bayangeli mpe bibombelo ya biloko ya kolia, ya mafuta mpe ya vino. \v 12 Kati na bingumba yango nyonso, atiaki banguba minene mpe makonga mpo na kokomisa yango makasi koleka. Boye Yuda mpe Benjame ekomaki ya Roboami. \s1 Kolendisama ya bokonzi ya Yuda \p \v 13 Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bazalaki kati na Isalaele mobimba bayaki kosangana na Roboami wuta na bituka na bango nyonso. \v 14 Balevi batikaki bandako mpe mabele na bango, bakendeki na Yuda mpe na Yelusalemi, pamba te Jeroboami mpe bana na ye ya mibali bapekisaki bango kosala mosala na bango ya bonganga-Nzambe ya Yawe. \v 15 Boye, ye moko Jeroboami aponaki banganga-nzambe mpo na bisambelo ya likolo ya bangomba mpe mpo na banzambe ya bikeko oyo asalaki na lolenge ya bantaba ya mibali mpe ya bana ngombe. \v 16 Bato ya mabota nyonso ya Isalaele, oyo balukaka Yawe, Nzambe ya Isalaele, na mitema na bango mobimba balandaki Balevi, na Yelusalemi, mpo na kobonzela Yawe, Nzambe ya batata na bango, mbeka. \v 17 Mibu misato, balendisaki bokonzi ya Yuda mpe nguya ya Roboami, mwana mobali ya Salomo ; pamba te mibu misato yango, balandaki ndakisa ya Davidi mpe ya Salomo. \s1 Libota ya Roboami \p \v 18 Roboami abalaki Maalati, mwana mwasi ya Yerimoti, mwana mobali ya Davidi mpe ya Abiyaili, mwana mwasi ya Eliabi, mwana mobali ya Izayi. \v 19 Maalati abotelaki Roboami bana mibali oyo : Yewushi, Shemaria mpe Zaami. \v 20 Sima, Roboami abalaki Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, oyo abotelaki ye : Abiya, Atayi, Ziza mpe Shelomiti. \v 21 Roboami alingaki mingi Maaka, mwana mwasi ya Abisalomi, koleka basi mpe bamakangu na ye nyonso. Azalaki na basi zomi na mwambe mpe bamakangu tuku motoba ; mpe abotaki bana mibali tuku mibale na mwambe mpe bana basi tuku motoba. \v 22 Roboami aponaki Abiya, mwana mobali ya Maaka, mpo ete azala mokambi ya liboso ya bandeko na ye ya mibali, pamba te azalaki na makanisi ya kokomisa ye mokonzi. \v 23 Boye, asalelaki mayele ya kopanza bana na ye nyonso ya mibali kati na bituka nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, kati na bingumba nyonso batonga makasi ; apesaki bango bilei mpe basi ebele. \c 12 \s1 Shishaki abundisi Yuda \r (1Ba 14.21-31) \p \v 1 Tango bokonzi ya Roboami elendisamaki mpe ye moko akomaki makasi, ye mpe Isalaele mobimba basundolaki Mobeko ya Yawe. \v 2 Boye, lokola bazalaki lisusu kotosa Yawe te, Shishaki, mokonzi ya Ejipito, abundisaki Yelusalemi na mobu ya mitano ya bokonzi ya Roboami. \v 3 Ayaki wuta na Ejipito elongo na bashar nkoto moko na nkama mibale, basoda nkoto tuku motoba oyo babundaka likolo ya bampunda elongo na mampinga ya basoda ebele oyo motango na bango ekokaki kotangama te : basoda ya mokili ya Libi, ya Suki mpe ya Kushi. \v 4 Abotolaki bingumba batonga makasi ya Yuda mpe akendeki kino na Yelusalemi. \p \v 5 Bongo, mosakoli Shemaya akendeki epai ya Roboami mpe bakambi ya Yuda oyo basanganaki na Yelusalemi tango bamonaki Shishaki kopusana. Alobaki na bango : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bosundolaki Ngai, yango wana Ngai mpe nasundoli bino na maboko ya Shishaki. » \p \v 6 Mokonzi elongo na bakambi ya Isalaele bamikitisaki, bandimaki mabe na bango mpe balobaki : \pi1 — Yawe azali sembo ! \p \v 7 Tango Yawe amonaki ete basili komikitisa, Yawe alobaki lisusu epai ya Shemaya : \pi1 — Lokola basili komikitisa na kondima mabe na bango, nakobebisa bango te ; kasi kala mingi te, nakokangola bango, mpe kanda na Ngai ekokitela Yelusalemi te na nzela ya Shishaki. \v 8 Nzokande bakokoma bawumbu na ye mpe, na bongo, bakoyeba bokeseni nini ezali kati na kosalela Ngai mpe kosalela bakonzi ya bamboka mosusu. \p \v 9 Shishaki, mokonzi ya Ejipito, abundisaki Yelusalemi, azwaki bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi. Azwaki penza biloko nyonso, ezala banguba ya wolo oyo Salomo asalisaki. \v 10 Na esika ya banguba ya wolo, mokonzi Roboami asalisaki banguba ya bronze mpe apesaki yango epai ya bakonzi ya bakengeli ekotelo ya ndako ya mokonzi. \v 11 Tango nyonso mokonzi abandaki kokende na Tempelo ya Yawe, bakengeli bazalaki kokende elongo na ye, bazalaki komema banguba mpe kozongisa yango kati na ndako ya bakengeli. \p \v 12 Lokola mokonzi Roboami amikitisaki na kondima mabe na ye, Yawe akitiselaki ye te kanda na Ye mpe abebisaki ye penza te. Kutu, emonanaki lisusu makambo malamu kati na Yuda. \s1 Suka ya bokonzi ya Roboami \r (1Ba 14.21-24, 29-31) \p \v 13 Mokonzi Roboami alendisaki bokonzi na ye, na Yelusalemi mpe akonzaki. Azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia kuna Kombo na Ye. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni. \v 14 Roboami asalaki mabe, pamba te amipesaki te, na motema na ye mobimba, mpo na koluka Yawe. \p \v 15 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Roboami, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya misala ya mosakoli Shemaya mpe ya momoni makambo Ido, buku epai wapi emonani milongo ya mbotama. Ezalaki tango nyonso na bitumba kati na Roboami mpe Jeroboami. \v 16 Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Abiya, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 13 \s1 Abiya, mokonzi ya Yuda \r (1Ba 15.1-6) \p \v 1 Tango Jeroboami akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Abiya akomaki mokonzi ya Yuda \v 2 mpe akonzaki mibu misato na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Mikaya. » Mikaya azalaki mwana ya Urieli, moto ya Gibea. Ezalaki na etumba kati na Abiya mpe Jeroboami. \b \p \v 3 Bongo kati na mampinga na bango, emonanaki ete Abiya azalaki na bilombe ya bitumba nkoto nkama minei, mpe Jeroboami, nkoto nkama mwambe. \v 4 Abiya atelemaki na likolo ya ngomba Tsemarayimi oyo ezali kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe alobaki : « Jeroboami mpe Isalaele, boyoka ngai malamu ! \v 5 Boyebi te ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apesa mpo na libela bokonzi ya Isalaele epai ya Davidi mpe bana na ye na nzela ya boyokani oyo ekoki kobongwana te ? \v 6 Kasi Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mosali ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, atelemaki mpo na kotombokela mokonzi na ye. \v 7 Bato pamba mpe bato oyo bazanga tina basanganaki elongo na ye mpe batombokelaki Roboami, mwana mobali ya Salomo, tango azalaki elenge ! Bongo lokola akembaki nanu te na mosala, alongaki mpe te kotelema liboso na bango. \v 8 Mpe sik’oyo, bokani kotelemela bokonzi ya Yawe, oyo ezali na maboko ya bana ya Davidi ! Bobongisi mampinga minene mpe bozali, kati na bino, na bikeko ya bana ngombe oyo Jeroboami asalelaki bino lokola banzambe. \v 9 Boni, bobenganaki te Banganga-Nzambe ya Yawe, bana mibali ya Aron, mpe Balevi ? Bomikomisaki te banganga-nzambe ya banzambe ya bikeko ndenge bato ya bikolo mosusu basalaka ? Moto na moto azalaki koya na ngombe moko ya mobali mpe bameme sambo ya mibali oyo azalaki kozwa na etonga na ye, mpo ete bakomisa ye nganga-nzambe ya oyo ezali kutu banzambe te. \v 10 Nzokande epai na biso, Yawe nde azali Nzambe na biso, mpe tosundola Ye te ; bana mibali ya Aron nde bazali Banganga-Nzambe oyo basalelaka Ye, mpe Balevi basungaka bango. \v 11 Tongo mpe pokwa nyonso, tobonzelaka Yawe bambeka ya kotumba mpe ya malasi, totandaka mapa likolo ya mesa ya bule ; mpe pokwa nyonso, topelisaka minda ya etelemiselo ya minda, pamba te biso totosaka mitindo ya Yawe, Nzambe na biso ; kasi bino, bosundolaki Ye. \v 12 Tala, Nzambe azali elongo na biso lokola Motambolisi ; Banganga-Nzambe na Ye bakobeta kelelo na lokito makasi mpo na kotelemela bino. Bana ya Isalaele, bobundisa te Yawe, Nzambe ya batata na bino, pamba te bokolonga ata moke te. » \p \v 13 Na tango wana, Jeroboami atindaki limpinga moko ya basoda mpo ete babombama na sima ya basoda ya Yuda. Boye, basoda ya Yuda bazwamaki lokola na motambo : liboso na bango, ezalaki na mampinga ya Isalaele ; mpe sima na bango, basoda oyo babombamaki. \v 14 Mpe wana basoda ya Yuda babalukaki, basosolaki ete babundisami na liboso mpe na sima na mbala moko. Boye, bagangaki epai na Yawe, mpe Banganga-Nzambe babetaki kelelo. \v 15 Basoda ya Yuda babetaki lokito ya bitumba ; mpe na lokito na bango, Yawe Nzambe akweyisaki Jeroboami mpe Isalaele nyonso liboso ya Abiya mpe ya Yuda. \v 16 Basoda ya Isalaele bakimaki liboso ya basoda ya Yuda, mpe Nzambe akabaki bango na maboko ya basoda ya Yuda. \v 17 Abiya mpe mampinga na ye bazwaki elonga monene liboso ya mampinga ya Isalaele mpe babomaki bilombe ya Isalaele pene nkoto nkama mitano. \v 18 Na tango wana, basoda ya Isalaele basambwaki ; kasi ba-oyo ya Yuda bazwaki elonga, pamba te batiaki elikya na Yawe, Nzambe ya batata na bango. \p \v 19 Abiya alandaki Jeroboami mpe abotolaki ye bingumba ebele : Beteli, Yeshana mpe Efroni elongo na bamboka na yango ya zingazinga. \v 20 Na mikolo nyonso oyo Abiya azalaki na bokonzi, Jeroboami azongelaki te nguya na ye ya kala. Yawe abetaki ye mpe akufaki. \v 21 Nzokande, Abiya alendisaki bokonzi na ye. Abalaki basi zomi na minei mpe abotaki bana mibali tuku mibale na mibale mpe bana basi zomi na motoba. \r (1Ba 15.7-8) \p \v 22 Makambo mpe misala mosusu ya Abiya, etamboli mpe maloba na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya momoni makambo Ido. \c 14 \p \v 1 Abiya akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Asa, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \p Na tango oyo Asa azalaki mokonzi, mokili ezalaki na kimia mibu zomi. \s1 Asa, mokonzi ya Yuda \r (1Ba 15.11-12) \p \v 2 Asa asalaki makambo ya malamu mpe ya sembo na miso ya Yawe, Nzambe na ye. \p \v 3 Alongolaki bitumbelo ya banzambe ya bapaya mpe bisambelo ya likolo ya bangomba, abukaki makonzi ya bule ya banzambe ya bikeko mpe akweyisaki makonzi ya bikeko ya nzambe mwasi Ashera. \v 4 Apesaki mitindo na bato ya Yuda ete baluka Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe batosa mibeko mpe malako na Ye. \b \p \v 5 Kati na bingumba nyonso ya Yuda, mokonzi Asa alongolaki bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo malasi. Boye, na tango na ye, mokili ezalaki na kimia. \p \v 6 Atongaki bingumba makasi kati na Yuda mpo ete mokili ezalaki na kimia. Na mibu wana, moto moko te abundisaki ye, pamba te Yawe apesaki ye bopemi. \v 7 Alobaki na Yuda : « Totonga bingumba oyo, tozingela yango na bamir, na bandako milayi mpe na bikuke elongo na bikangelo na yango. Mokili ezali kati na bopemi liboso na biso, pamba te tolukaki Yawe, Nzambe na biso ; tolukaki Ye, mpe Ye apesi biso bopemi na bangambo nyonso. » \p Boye, batongaki mpe balongaki na mabongisi na bango. \p \v 8 Asa azalaki na mampinga ya basoda nkoto nkama misato ya bato ya Yuda, oyo bazalaki komema banguba minene mpe makonga, mpe ya basoda nkoto nkama mibale na tuku mwambe ya bato ya Benjame, oyo bazalaki komema banguba mike mpe kobeta matolotolo : bango nyonso bazalaki bilombe ya bitumba. \v 9 Zera, moto ya Kushi, elongo na mampinga ya basoda monkoko moko mpe bashar nkama misato, abundisaki mampinga ya Asa mpe akomaki kino na Maresha. \v 10 Asa abimelaki ye, mpe batandamaki na molongo ya bitumba na se ya Tsefata, pene ya Maresha. \v 11 Asa abelelaki Yawe, Nzambe na ye ; alobaki : \pm « Oh Yawe, moko te akokani na Yo, moko te akoki kosunga moto ya bolembu liboso ya moto na nguya. \pm Oh Yawe, Nzambe na biso, sunga biso ! Pamba te totiaka elikya na biso kati na Yo. Ezali na Kombo na Yo nde toyaki kobundisa mampinga oyo ya monene. \pm Oh Yawe, ozali Nzambe na biso ! Tika ete moto alonga Yo te ! » \p \v 12 Yawe abetaki bato ya Etiopi liboso ya Asa mpe Yuda, mpe bato ya Etiopi bakimaki. \v 13 Asa elongo na mampinga na ye balandaki bato ya Etiopi kino na Gerari. Bato bakufaki, bakokaki te kobikisa bomoi na bango, pamba te bango nyonso babebisamaki liboso ya Yawe mpe mampinga na Ye. Mampinga ya basoda ya Yuda bazwaki bomengo ebele ya bitumba ; \v 14 babebisaki bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Gerari, pamba te Yawe akweyiselaki bango somo na Ye ya makasi. Bazwaki na makasi biloko kati na bingumba nyonso, pamba te biloko ya kozwa ezalaki ebele penza kati na yango. \v 15 Babebisaki mpe bitonga ya bibwele, bamemaki bantaba mpe bameme ebele elongo na bashamo. Bongo, bazongaki na Yelusalemi. \c 15 \s1 Asa asali boyokani ya sika \p \v 1 Molimo ya Nzambe akitelaki Azaria, mwana mobali ya Odedi. \v 2 Azaria ayaki liboso ya Asa mpe alobaki na ye : « Asa elongo na bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, boyoka ngai ! Yawe azalaka elongo na bino soki bino bozali elongo na Ye. Soki boluki Ye, akomimonisa epai na bino. Nzokande, soki botiki Ye, Ye mpe akotika bino ! \v 3 Na tango molayi, Isalaele azangaki Nzambe ya solo, azangaki Banganga-Nzambe mpo na koteya ye, mpe azangaki mibeko. \v 4 Kasi kati na pasi na bango, bazongelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele ; balukaki Ye, mpe Ye amimonisaki epai na bango. \v 5 Na tango yango, kimia ezalaki te mpo na bato oyo bazalaki kokende mpe kozonga, pamba te mobulu ezalaki kati na bavandi nyonso ya mikili. \v 6 Ekolo moko ezalaki kobundisa ekolo mosusu, engumba moko ezalaki kobundisa engumba mosusu, pamba te Nzambe azalaki kokotisa mobulu kati na bango na nzela ya pasi ya lolenge nyonso. \v 7 Boye bino, botelema ngwi mpe bolemba te, pamba te misala na bino ezali na lifuti. » \p \v 8 Sima na Asa koyoka maloba oyo mpe lisakoli ya Azaria, mwana mobali ya mosakoli Odedi, azwaki mpiko, alongolaki banzambe ya bikeko kati na bituka ya Yuda, ya Benjame mpe kati na bingumba oyo abotolaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi ; azongisaki etumbelo ya Yawe oyo ezalaki liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ya Yawe. \v 9 Asangisaki bato nyonso ya Yuda mpe ya Benjame, elongo na bato oyo bawutaki na mabota ya Efrayimi, ya Manase mpe ya Simeoni, oyo bakomaki kovanda kati na bango, pamba te bana ebele ya Isalaele basanganaki na mokonzi Asa tango bamonaki ete Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye. \v 10 Basanganaki na Yelusalemi na sanza ya misato ya mobu ya zomi na mitano ya bokonzi ya Asa. \v 11 Na mokolo wana, kati na bomengo ya bitumba oyo bazongaki na yango, babonzelaki Yawe bangombe nkama sambo mpe bameme nkoto sambo. \v 12 Basalaki boyokani na kolapa ndayi ete bakokangama na Yawe, Nzambe ya batata na bango, na mitema mpe na molimo na bango mobimba ; \v 13 bongo moto nyonso oyo akokangama te na Yawe, Nzambe ya Isalaele, azala mwana to mokolo, tata to mama, basengeli koboma ye. \v 14 Balapaki ndayi epai na Yawe, na mongongo makasi, na kobeta maboko mpe milolo, mpe na lokito ya kelelo mpe ya maseke. \v 15 Bato nyonso ya Yuda basepelaki na ndayi yango, pamba te balapaki yango na mitema na bango mobimba ; bazwaki mokano ya kokangama na Yawe Nzambe na esengo, mpe Ye amimonisaki epai na bango. Boye, Yawe apesaki bango bopemi na bangambo nyonso. \r (1Ba 15.13-15) \p \v 16 Mokonzi Asa alongolaki ezala Maaka, mama na ye, na lokumu ya mama ya mokonzi, pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki ekeko yango ya soni kino kokomisa yango putulu, mpe atumbaki yango kati na lubwaku ya Sedron. \v 17 Kasi abebisaki te kati na Isalaele bisambelo ya likolo ya bangomba. Nzokande, Asa abatelaki motema na ye sembo, na mikolo nyonso ya bomoi na ye ; \v 18 azongisaki kati na Tempelo ya Nzambe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki : palata, wolo mpe biloko mosusu. \p \v 19 Bitumba ezalaki lisusu te kino na mobu ya tuku misato na mitano ya bokonzi ya Asa. \c 16 \s1 Suka ya bokonzi ya Asa \r (1Ba 15.17-22) \p \v 1 Na mobu ya tuku misato na motoba ya bokonzi ya Asa, Baesha, mokonzi ya Isalaele, abundisaki Yuda ; alendisaki bamir ya engumba Rama mpo na kopekisa bato kokota to kobima na mokili ya Asa, mokonzi ya Yuda. \v 2 Asa azwaki na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako na ye moko palata mpe wolo, mpe atindaki yango epai ya Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo : \v 3 « Tika ete tosala boyokani kati na ngai mpe yo ndenge ezalaki kati na tata na ngai mpe tata na yo. Tala, natindeli yo palata mpe wolo. Kende kokata boyokani na yo elongo na Baesha, mokonzi ya Isalaele, mpo ete abundisa ngai lisusu te. » \p \v 4 Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Babotolaki Iyoni, Dani, Abele-Mayimi mpe bibombelo nyonso ya bingumba ya Nefitali. \v 5 Tango kaka Baesha ayokaki bongo, atikaki kolendisa engumba Rama mpe akataki misala na yango. \v 6 Bongo mokonzi Asa asangisaki bato nyonso ya Yuda, mpe bamemaki wuta na Rama mabanga mpe mabaya oyo Baesha azalaki kosalela. Atongaki na yango Geba mpe engumba Mitsipa. \s1 Asa abwaki Anani na boloko \p \v 7 Na tango wana, Anani, momoni makambo, akendeki epai ya Asa, mokonzi ya Yuda, mpe alobaki na ye : \pi1 — Lokola otie elikya na yo na mokonzi ya Siri na esika ya kotia elikya na yo na Yawe, Nzambe na yo, ozali lisusu na bokonzi te likolo ya mampinga ya mokonzi ya Siri. \v 8 Boni, bato ya Etiopi mpe ya Libi bazalaki te mampinga minene ya basoda elongo na bashar mpe basoda ebele oyo babundaka likolo ya bampunda ? Kasi lokola ozalaki kotia elikya na yo kati na Ye, Yawe akabaki bango solo na maboko na yo. \v 9 Pamba te Yawe atalaka mokili mobimba mpo na kosunga bato oyo mitema na bango emipesa mobimba epai na Ye. Nzokande, na likambo oyo, osali lokola moto oyo azangi mayele. Mpo na yango, kobanda lelo, okozalaka na bitumba tango nyonso. \p \v 10 Mokonzi Asa asilikelaki makasi momoni makambo mpe abwakaki ye na boloko. Kaka na tango yango, Asa anyokolaki ndambo ya bato. \r (1Ba 15.23-24) \p \v 11 Makambo mpe misala mosusu ya Asa, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele. \v 12 Na mobu ya tuku misato na libwa ya bokonzi na ye, Asa abelaki makasi makolo ; mpe, ezala na tango oyo azali kobela makasi, alukaki Yawe te, kasi akendeki epai ya minganga. \v 13 Na mobu ya tuku minei na moko ya bokonzi na ye, Asa akendeki kokutana na bakoko na ye. \v 14 Bakundaki ye kati na kunda oyo asalisaki kati na engumba ya Davidi. Balalisaki ye na mbeto moko etonda na malasi, na biloko ya mike-mike ya solo kitoko mpe na kisi oyo basalelaka mpo na kokawusa nzoto ya mowei ; mpe batumbaki biloko yango ebele mpo na lokumu na ye. \c 17 \s1 Jozafati, mokonzi ya Yuda \p \v 1 Jozafati, mwana mobali ya Asa, akitanaki na tata na ye na bokonzi mpe alendisaki makasi na ye mpo na kobundisa Isalaele. \v 2 Atiaki mampinga na ye kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi ; mpe atiaki masanga ya basoda kati na mokili ya Yuda mpe kati na bingumba ya Efrayimi oyo Asa, tata na ye, abotolaki. \v 3 Yawe azalaki elongo na Jozafati mpo ete, na eteni ya liboso ya bomoi na ye, alandaki ndakisa ya Davidi, tata na ye, mpe amipesaki te na banzambe Bala. \v 4 Kasi alukaki Nzambe ya tata na ye mpe atosaki mibeko na Ye : alandaki te makambo oyo ezalaki kosalema kati na Isalaele. \v 5 Yawe alendisaki bokonzi oyo ezalaki na maboko ya Jozafati, mpe Yuda mobimba ezalaki komemela ye bakado. Akomaki na bozwi ebele mpe atondaki na lokumu. \v 6 Motema na ye esepelaki makasi kotambola na banzela ya Yawe kino kolongola kati na Yuda bisambelo ya likolo ya bangomba mpe makonzi ya Ashera. \p \v 7 Na mobu ya misato ya bokonzi na ye, atindaki bakalaka na ye koteya bavandi ya bingumba ya Yuda. Ezalaki Beni-Ayili, Abidiasi, Zakari, Netaneeli mpe Mishe. \v 8 Atindaki elongo na bango Balevi oyo libwa : Shemaya, Netania, Zebadia, Asaeli, Shemiramoti, Jonatan, Adoniya, Tobiya mpe Tobi-Adoniya ; elongo na Banganga-Nzambe Elishama mpe Yorami. \v 9 Bateyaki kati na Yuda. Wana bazalaki na buku ya Mobeko ya Yawe elongo na bango, batambolaki kati na bingumba nyonso ya Yuda mpo na koteya bato. \p \v 10 Somo ya Yawe ekangaki bamboka nyonso oyo ezalaki zingazinga ya Yuda, mpe ekokaki lisusu te kobundisa Jozafati. \v 11 Bato ya Filisitia bamemelaki Jozafati bakado mpe palata lokola mpako mpo na mokonzi ; mpe bato ya Arabi bamemelaki ye bameme ya mibali nkoto sambo na nkama sambo mpe bantaba ya mibali nkoto sambo na nkama sambo. \v 12 Wana nguya ya bokonzi ya Jozafati ekobaki kaka koya makasi, atongaki kati na Yuda bandako makasi mpe bingumba ya kobomba biloko. \p \v 13 Kati na bingumba ya Yuda, azalaki na biloko ebele ya kolia ; mpe kati na Yelusalemi, atiaki basoda ya mpiko. \v 14 Tala motango na bango kolanda mabota na bango : \li1 Kati na libota ya Yuda, \li2 bakonzi ya bankoto : Adina, mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama misato ; \li2 \v 15 sima na ye, Yoanani : mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale na tuku mwambe ; \li2 \v 16 sima na ye, Amasia, mwana mobali ya Zikiri, oyo amikabaki ye moko epai na Yawe : mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale. \li1 \v 17 Kati na libota ya Benjame : \li2 Eliyada, elombe ya bitumba, azalaki mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama mibale oyo bazalaki na matolotolo mpe na banguba ; \li2 \v 18 Yozabadi, mokonzi ya basoda ya mpiko nkoto nkama moko na tuku mwambe. \m \v 19 Bato oyo nyonso bazalaki kosala epai ya mokonzi lokola bakonzi ya basoda ya mpiko, bakisa ba-oyo mokonzi atiaki kati na bingumba batonga makasi ya Yuda mobimba. \c 18 \s1 Jozafati asali boyokani elongo na Akabi \r (1Ba 22.1-28) \p \v 1 Mokonzi Jozafati akomaki na lokumu mingi mpe na bozwi ebele, asalaki boyokani elongo na Akabi na nzela ya libala. \v 2 Sima na ndambo ya mibu, akendeki kotala Akabi kati na Samari. Akabi abomaki bameme mpe bangombe ebele mpo na koyamba ye mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Atindikaki ye na kokende na Ramoti ya Galadi. \v 3 Akabi, mokonzi ya Isalaele, atunaki epai ya Jozafati, mokonzi ya Yuda : \pi1 — Okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi ? \p Jozafati azongisaki : \pi1 — Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko ; tokokende elongo na yo na bitumba. \p \v 4 Kasi Jozafati alobaki lisusu na mokonzi ya Isalaele : \pi1 — Nabondeli yo, tuna nanu toli ya Yawe. \p \v 5 Boye, mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli nkama minei mpe atunaki bango : \pi1 — Boni, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? \p Bazongiselaki ye : \pi1 — Kende, pamba te Nzambe akokaba yango na maboko ya mokonzi. \p \v 6 Kasi Jozafati atunaki lisusu : \pi1 — Ezali lisusu na mosakoli moko te awa oyo, na nzela na ye, tokoki kotuna toli ya Yawe ? \p \v 7 Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : \pi1 — Ezali lisusu na moto moko oyo, na nzela na ye, tokoki kotuna toli ya Yawe ; kasi ngai nalingaka ye te mpo ete atikala nanu kosakola te makambo ya malamu mpo na bomoi na ngai ; asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. \p Jozafati alobaki : \pi1 — Tika ete mokonzi aloba bongo te ! \p \v 8 Bongo mokonzi ya Isalaele abengaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe alobaki na ye : \pi1 — Memela ngai na lombangu Mishe, mwana mobali ya Yimila. \p \v 9 Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, balataki bilamba na bango ya bokonzi mpe bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi, na etando ya ekotelo ya ekuke ya Samari. Mpe basakoli nyonso bazalaki kosakola liboso na bango. \v 10 Nzokande, moko kati na bango, Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, asalisaki maseke ya ebende mpe alobaki : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Na maseke oyo, okobeta bato ya Siri kino okosilisa koboma bango. » \p \v 11 Basakoli nyonso bazalaki koloba kaka liloba moko : « Kende kobundisa Ramoti ya Galadi ! Okolonga, pamba te Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. » \p \v 12 Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye : \pi1 — Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango : sakola elonga mpo na mokonzi. \p \v 13 Kasi Mishe azongisaki : \pi1 — Na Kombo na Yawe, makambo oyo Nzambe na ngai akoloba na ngai, yango nde nakoloba. \p \v 14 Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye : \pi1 — Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? \p Azongisaki : \pi1 — Bokende ! Bokolonga ! Bakokabama na maboko na bino ! \p \v 15 Kasi mokonzi alobaki na ye : \pi1 — Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe ? \p \v 16 Mishe azongisaki : \pi1 — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na likolo ya bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! » \p \v 17 Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati : \pi1 — Nayebisaki yo te ete asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, alobaka kaka mpo na mabe ! \p \v 18 Mishe alobaki : \pi1 — Solo, boyoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai, namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. \v 19 Yawe atuni : « Nani akokosa Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpo ete akende kobundisa Ramoti ya Galadi mpe akufa kuna ? » \pi1 Bazongisaki, moko na moko na ndenge na ye. \v 20 Mpe na suka na nyonso, molimo moko epusanaki, etelemaki liboso ya Yawe mpe elobaki : « Ngai oyo ! Nakokosa ye. » \pi1 Yawe atunaki molimo yango : « Okosala yango ndenge nini ? » \pi1 \v 21 Molimo yango ezongisaki : « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. » \pi1 Yawe alobaki : « Solo, okolonga kokosa ye ! Kende mpe sala bongo. » \pi1 \v 22 Mpe sik’oyo, tala, Yawe atie molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na yo oyo ; Yawe azwi penza mokano ya koboma yo. \p \v 23 Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki : \pi1 — Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo ? \p \v 24 Mishe azongisaki : \pi1 — Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama. \p \v 25 Mbala moko, mokonzi ya Isalaele apesaki mitindo : \pi1 — Bokanga Mishe mpe bomema ye epai ya Amoni, moyangeli ya engumba, mpe epai ya Joasi, mwana mobali ya mokonzi. \v 26 Boloba na bango : « Tala makambo oyo mokonzi alobi : ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › » \p \v 27 Mishe alobaki : \pi1 — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te ! \m Abakisaki : \pi1 — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi ! \s1 Babomi mokonzi Akabi na bitumba \r (1Ba 22.29-36) \p \v 28 Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, bakendeki kobundisa Ramoti ya Galadi. \v 29 Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati : \pi1 — Nakomibongola wana nakokende na bitumba ; kasi yo, lata bilamba na yo ya bokonzi. \p Boye, mokonzi ya Isalaele amibongolaki mpe akendeki na bitumba. \v 30 Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda oyo batambolisaka bashar : \pi1 — Bobundisa moto moko te, azala moke to monene ; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele. \p \v 31 Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki : « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Bazingelaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi, mpe Yawe asungaki ye. Nzambe atindikaki basoda oyo batambolisaka bashar mosika na ye. \v 32 Tango bakonzi ya basoda, oyo batambolisaka bashar basosolaki ete ezali mokonzi ya Isalaele te, batikaki kolanda ye. \v 33 Kasi moto moko abetaki tolotolo na ye bibetela, mpe mbanzi na yango edusolaki ebombelo ya tolo ya mokonzi ya Isalaele mpe ezwaki ye. Mokonzi alobaki na motambolisi ya shar : \pi1 — Baluka mpe bimisa ngai libanda ya esika oyo bitumba ezali koleka, pamba te nazoki. \p \v 34 Na mokolo yango, lokola bitumba ezalaki makasi, mokonzi ya Isalaele atikalaki ya kotelema kati na shar na ye liboso ya bato ya Siri, kino na pokwa. Mpe kaka na pokwa yango, akufaki. \c 19 \p \v 1 Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, azongaki mobimba na ndako na ye na Yelusalemi, \v 2 mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, akendeki kokutana na ye. Alobaki na mokonzi Jozafati : « Mpo na nini kosunga moto mabe mpe kolinga bato oyo bayinaka Yawe ? Mpo ete osali bongo, kanda makasi ya Yawe ezali likolo na yo. \v 3 Kasi atako bongo, makambo malamu emonani kati na yo, pamba te olongolaki makonzi ya nzambe Ashera mpe obongisaki motema na yo mpo na koluka Nzambe. » \s1 Jozafati abongisi mosala ya basambisi \p \v 4 Jozafati avandaki na Yelusalemi mpe atambolaki lisusu kati na bato longwa na Beri-Sheba kino na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe azongisaki bana ya Isalaele epai na Yawe, Nzambe ya bakoko na bango. \v 5 Atiaki basambisi kati na mokili, kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi. \v 6 Alobaki na bango : « Bozala na bokebi na mosala oyo bokosala, pamba te bokosambisa te mpo na bato, kasi mpo na Yawe oyo azali elongo na bino na bisika nyonso oyo bokokata makambo. \v 7 Sik’oyo, tika botosi ya Yawe ezala kati na bino. Bokata makambo na bosolo ; pamba te epai na Yawe, Nzambe na biso, makambo oyo ezalaka te : kozanga bosembo, kopona bilongi mpe kanyaka. » \p \v 8 Kati na Yelusalemi, Jozafati aponaki Balevi, Banganga-Nzambe mpe bakambi ya mabota ya Isalaele mpo na kosambisa kolanda Mibeko ya Yawe mpe kokata makambo ya bavandi ya Yelusalemi. \v 9 Apesaki bango mitindo oyo : « Bosengeli kosala na boyengebene, na motema mobimba mpe na botosi epai na Yawe. \v 10 Tango nyonso likambo ekowuta epai na bandeko na bino oyo bavandaka na engumba mpe ekokoma liboso na bino, ezala ya koboma to ya kobuka mibeko, mitindo, bikateli to malako, bosengeli kokebisa bango ete basala masumu te liboso ya Yawe ; soki te, kanda na Ye ekokweyela bino mpe bandeko na bino. Bosala bongo mpe bokozala na pamela te. \v 11 Amaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, akozala mokambi na bino mpo na makambo nyonso oyo etali Yawe ; mpe Zebadia, mwana mobali ya Isimaeli, mokonzi ya libota ya Yuda, akozala mokambi na bino mpo na makambo nyonso oyo etali mokonzi. Balevi bakozala lokola bakalaka liboso na bino. Bozala na mpiko mpe bosala mosala ! Mpe tika ete Yawe azala elongo na bato oyo bakosala malamu ! » \c 20 \s1 Jozafati alongi Moabi mpe Amoni \p \v 1 Sima na yango, bato ya Moabi mpe ya Amoni elongo na ndambo ya bato ya Maoni bayaki kobundisa Jozafati. \v 2 Bongo sango ekomaki na matoyi ya Jozafati na maloba oyo : « Mampinga minene ezali koya kobundisa yo longwa na Siri mpe na ngambo mosusu ya ebale monene ; esili kokoma na Atsatsoni-Tamari oyo babengaka Eyini-Gedi. » \p \v 3 Jozafati abangaki makasi ; azwaki mokano ya kotuna toli ya Yawe mpe akataki ete mokili mobimba ya Yuda ekila bilei. \v 4 Bato ya Yuda oyo bawutaki na bingumba nyonso ya Yuda basanganaki mpo na koluka Yawe. \v 5 Jozafati atelemaki kati na lisanga ya Yuda mpe ya Yelusalemi, kati na Tempelo ya Yawe, liboso ya lopango ya sika. \v 6 Asambelaki : \pm « Oh Yawe, Nzambe ya bakoko na biso ! Ezali Yo te Nzambe oyo azali kati na likolo ? Ezali Yo te oyo okonzaka bikolo nyonso ya mokili ? Nguya mpe makasi ezali kati na loboko na Yo, mpe moko te akoki kotelemela Yo ! \v 7 Oh Nzambe na biso, ezali Yo te oyo obenganaki bavandi ya mokili oyo liboso ya Isalaele, bato na Yo, mpo na kopesa yango mpo na libela epai ya bakitani ya Abrayami, molingami na Yo ? \v 8 Bavandaki mpe na mokili yango, batongaki awa Esika ya bule mpo na Yo, mpo na Kombo na Yo, na koloba : \v 9 ‹ Soki mabe moko ekomeli biso : bitumba, etumbu, bokono to nzala makasi, tokoya kotelema liboso ya Tempelo oyo mpe liboso na Yo, pamba te Kombo na Yo ezali kati na Tempelo oyo ; mpe kati na pasi na biso, tokoganga epai na Yo ; bongo Yo, okoyoka, okoyanola mpe okobikisa biso ! › \pm \v 10 Sik’oyo, tala bato ya Amoni, ya Moabi mpe bavandi ya etuka ya bangomba Seiri, ba-oyo na tina na bango, tango bana ya Isalaele babimaki na Ejipito, opekisaki bana ya Isalaele kobotola mokili na bango ; mpe mpo na yango, balekaki pembeni-pembeni ya mokili na bango mpe babomaki bango te ! \v 11 Tala lolenge nini bazali kofuta biso : bayei kobundisa mpe kobengana biso na mabele oyo opesaki biso lokola libula ! \v 12 Oh Nzambe na biso, okosambisa bango te ? Pamba te tozali na makasi te ya kotelemela mampinga minene oyo ezali koya kobundisa biso, mpe toyebi te tosala nini ! Miso na biso ezali kotalela kaka Yo. » \p \v 13 Bato nyonso ya Yuda elongo na mabota nyonso, basi mpe bana na bango, batelemaki liboso ya Yawe. \v 14 Bongo Molimo na Yawe akitelaki, kati na lisanga, Yaazieli, mwana mobali ya Zakari, mwana ya mobali ya Benaya, mwana mobali ya Yeyeli mpe mwana mobali ya Matania, Molevi mpe moko kati na bakitani ya Azafi. \v 15 Yaazieli alobaki : « Bino bavandi nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi, mpe yo mokonzi Jozafati, boyoka ! Tala makambo oyo Yawe azali koloba na bino : ‹ Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mampinga minene oyo, pamba te bitumba ezali ya bino te kasi ezali ya Nzambe. \v 16 Lobi, bokende kobundisa bango. Bakomata ngomba Atsize, mpe bino bokokutana na bango na suka ya lubwaku, liboso ya esobe ya Yerueli. \v 17 Bokobunda bitumba ata moke te : bomibongisa kaka na bisika na bino, botelema mpe botala elonga oyo Yawe akopesa bino. Bino bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi, bobanga te mpe bolenga te ! Lobi, bokende kokutana na bango ; mpe Yawe akozala elongo na bino ! › » \p \v 18 Jozafati agumbamaki elongi kino na mabele, mpe bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bafukamaki mpo na kogumbamela Yawe. \v 19 Balevi kati na bato ya Keati mpe ya Kore batelemaki mpo na kokumisa Yawe, Nzambe ya Isalaele, na mongongo makasi. \p \v 20 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bakendeki na esobe ya Tekoa. Na tango ya kokende, Jozafati atelemaki mpe alobaki : « Bino, bato ya Yuda mpe bavandi ya Yelusalemi, boyoka ngai ! Botia elikya na Yawe, Nzambe na bino, mpe bokolendisama ! Bondimela basakoli na Ye, mpe bokolonga ! » \p \v 21 Sima na ye kosolola na bato, Jozafati aponaki bayembi, atiaki bango liboso ya mampinga ya basoda, mpo na kokumisa Yawe mpe kotombola nkembo ya bosantu na Ye. Mpe batambolaki liboso ya mampinga ya basoda na koyemba : \q1 « Bosanzola Yawe, \q2 pamba te bolingo na Ye ewumelaka seko na seko ! » \p \v 22 Tango kaka babandaki koyemba mpe kokumisa, Yawe atiaki mobulu kati na bato ya Amoni, ya Moabi mpe ya bangomba Seiri oyo bakotaki na Yuda, mpe babomanaki bango na bango. \v 23 Bato ya Amoni mpe ya Moabi batelemaki mpo na kobundisa, koboma mpe kobebisa bavandi ya bangomba Seiri. Tango basilisaki koboma bavandi ya Seiri, bakomaki kobomana bango na bango. \p \v 24 Tango bato ya Yuda bayaki na esika ya kotalela esobe na mosika, batalaki na ngambo ya mampinga minene ya banguna mpe bamonaki kaka bibembe elali na mabele : moko te abikaki. \p \v 25 Jozafati elongo na bato na ye bakendeki kozwa bomengo ya bitumba ; mpe bamonaki bibembe ebele, biloko ebele, bilamba ebele mpe biloko ebele ya talo. Balokotaki biloko ebele oyo bakokaki ata komema te. Basalaki mikolo misato mpo na kozwa yango, pamba te bomengo ya bitumba ezalaki ebele penza. \v 26 Na mokolo ya minei, basanganaki na lubwaku ya Beraka epai wapi bapambolaki Yawe. Yango wana, kino na mokolo ya lelo, babengaka esika yango lubwaku ya Beraka\f + \fr 20.26 \fr*\ft Beraka elingi koloba : mapamboli.\ft*\f*. \p \v 27 Na bokambami ya Jozafati, bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bazongaki na esengo na Yelusalemi, pamba te Yawe atondisaki bango na esengo wana akangolaki bango na maboko ya banguna na bango. \v 28 Bakotaki na Yelusalemi na lokito ya makembe, ya mandanda mpe ya bakelelo, mpe bakendeki na Tempelo ya Yawe. \v 29 Somo ya Nzambe ekangaki bikolo nyonso ya mokili tango bayokaki sango ete Yawe abundisi banguna ya Isalaele. \v 30 Bokonzi ya Jozafati ezwaki kimia, pamba te Nzambe na ye apesaki ye bopemi na bangambo nyonso. \s1 Suka ya bokonzi ya Jozafati \r (1Ba 22.41-51) \p \v 31 Jozafati, mwana mobali ya Asa, akonzaki Yuda ; azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi ya Yuda, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili. \v 32 Jozafati alandaki nzela oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango ; apengwaki na yango ata moke te mpe asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe. \v 33 Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; mpe bato babongisaki nanu te mitema na bango mpo na kokangama na Nzambe ya bakoko na bango. \p \v 34 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya Jewu, mwana mobali ya Anani ; mpe masolo yango ezali kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \p \v 35 Sima na yango, Jozafati, mokonzi ya Yuda, asalaki boyokani elongo na Akazia, mokonzi ya Isalaele, oyo etamboli na ye ezalaki mabe na miso ya Nzambe. \v 36 Basanganaki bango mibale mpo na kotonga bamasuwa oyo esengelaki kokende na Tarsisi. Sima na kotonga bamasuwa na Etsioni-Geberi, \v 37 Eliezeri, mwana mobali ya Dodavawu, moto ya Maresha, asakolaki mpo na kotelemela Jozafati ; alobaki : « Lokola osali boyokani elongo na Akazia, Yawe akobebisa misala na yo. » \p Mpe bamasuwa ebebaki mpe ekokaki lisusu te kokende na Tarsisi. \c 21 \p \v 1 Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \p \v 2 Tala bandeko mibali ya Yorami : Azaria, Yeyeli, Zakari, Azaria, Mikaeli mpe Shefatia. Bango nyonso bazalaki bana mibali ya Jozafati, mokonzi ya Isalaele. \v 3 Tata na bango apesaki bango bakado ebele ya palata, ya wolo, ya biloko ya talo ; apesaki bango lisusu bingumba batonga makasi kati na Yuda, kasi apesaki bokonzi epai ya Yorami mpo ete azalaki mwana na ye ya liboso ya mobali. \s1 Yorami, mokonzi ya Yuda \p \v 4 Tango Yorami azwaki bokonzi ya tata na ye mpe alendaki na bokonzi yango, abomaki na mopanga bandeko na ye nyonso ya mibali elongo na ndambo ya bakambi ya Isalaele. \r (2Ba 8.16-24) \p \v 5 Yorami azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi. \v 6 Alandaki nzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki, pamba te abalaki mwana mwasi ya Akabi. \v 7 Nzokande, Yawe alingaki te kobebisa libota ya Davidi, mpo na boyokani oyo Ye moko Yawe asalaki elongo na Davidi, mpe mpo ete alakaki kopesa mpo na libela bokonzi epai ya Davidi mpe epai ya bana na ye. \p \v 8 Na tango oyo Yorami azalaki na bokonzi, bato ya Edomi batombokelaki Yuda mpe bamipesaki mokonzi. \v 9 Yorami akendeki kuna elongo na bakonzi na ye ya basoda mpe bashar na ye nyonso. Na butu, atelemaki mpe abetaki bato ya Edomi oyo bazingelaki ye elongo na bakonzi ya basoda oyo babundaka na bashar. \v 10 Wuta mokolo wana kino lelo, Edomi etombokelaka kaka Yuda. Na tango wana, Libina mpe etombokelaki Yorami, pamba te Yorami asundolaki Yawe, Nzambe ya batata na ye. \b \p \v 11 Yorami atongaki kutu bisambelo ya likolo ya bangomba ya Yuda ; atindikaki bato ya Yelusalemi na kosambela bikeko mpe apengwisaki Yuda. \v 12 Yorami azwaki mokanda kowuta na mosakoli Eliya ; ezalaki koloba : \pm « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya mokonzi na yo Davidi, alobi : ‹ Lokola olandi te ndakisa ya Jozafati, tata na yo, mpe ya Asa, mokonzi ya Yuda, \v 13 kasi olandi banzela ya bakonzi ya Isalaele, mpe otindiki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi na kosambela banzambe ya bikeko ndenge libota ya Akabi esalaki ; lokola obomaki lisusu bandeko na yo ya mibali, bato ya ndako ya tata na yo, bato oyo bazalaki malamu koleka yo, \v 14 Yawe alingi sik’oyo koboma, na nzela ya etumbu ya somo, bato na yo, bana na yo ya mibali, basi na yo mpe biloko na yo nyonso. \v 15 Yo moko mpe okobela bokono ya makasi, bokono ya libumu oyo pasi na yango ekomata se komata mikolo nyonso kino kobimisa yo misopo na libanda. › » \p \v 16 Yawe asalaki ete bato ya Filisitia mpe bato ya Arabi oyo bazalaki kovanda pembeni ya bato ya Kushi babundisa Yorami. \v 17 Babundisaki Yuda, bakotaki kati na yango na makasi mpe bamemaki biloko nyonso oyo bamonaki kati na ndako ya mokonzi elongo na bana na ye ya mibali mpe basi na ye ; mwana mobali moko kaka atikalaki : Yoakazi\f + \fr 21.17 \fr*\ft Yoakazi to Akazia elingi koloba : \+nd Yawe\+nd* asimbi.\ft*\f*, mwana na ye ya suka. \p \v 18 Sima na makambo oyo nyonso, Yawe atindelaki ye bokono ya libumu oyo esilaka te. \v 19 Pasi na yango ezalaki mikolo nyonso komata se komata ; mpe na suka ya mobu ya mibale, misopo ya Yorami ebimaki na libanda mpo na bokono mpe akufaki kati na pasi makasi. Bato na ye batumbaki te biloko ya solo kitoko mpo na kopesa ye lokumu ndenge basalaki mpo na batata na ye. \p \v 20 Yorami azalaki na mibu tuku misato na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mwambe na Yelusalemi. Akendeki kaka ndenge wana, moto ata moko te ayokaki mawa. Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te. \c 22 \s1 Akazia, mokonzi ya Yuda \r (2Ba 8.25-29; 9.27-29) \p \v 1 Bato ya Yelusalemi bakomisaki Akazia, mwana mobali ya suka ya Yorami, mokonzi mpo na kokitana na ye, pamba te bato ya mobulu oyo bakotaki na molako elongo na bato ya Arabi babomaki bana mibali nyonso. Ezali boye nde Akazia, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akomaki mokonzi. \v 2 Akazia azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mobu moko na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Atali. » Atali azalaki koko ya Omiri. \v 3 Ye mpe alandaki banzela oyo libota ya Akabi etambolaki na yango, pamba te mama na ye, na nzela ya batoli na ye, azalaki kotindika ye na kosala mabe. \v 4 Akazia asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ndenge libota ya Akabi esalaki ; pamba te, sima na kufa ya tata na ye, bato ya libota ya Akabi bakomaki bapesi toli na ye mpo na libebi na ye. \v 5 Alandaki mpe batoli na bango tango akendeki na bitumba elongo na Yorami, mwana mobali ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpo na kobundisa Azaeli, mokonzi ya Siri, na Ramoti ya Galadi. Kasi bato ya Arami bazokisaki Yorami. \v 6 Bongo, Yorami azongaki na Jizireyeli mpo na kokawusa bapota oyo bazokisaki ye na Rama, na bitumba oyo babundaki na Azaeli, mokonzi ya Siri. Azaria, mwana mobali ya Yorami, mokonzi ya Yuda, akendeki na Jizireyeli kotala Yorami, mwana mobali ya Akabi, pamba te bazokisaki ye. \r (2Ba 9.21-29) \p \v 7 Nzambe asalaki ete kobebisama ya Akazia esalema tango akendeki kotala Yorami. Tango kaka Akazia akomaki, abimaki nzela moko na Yorami mpo na kokende epai ya Jewu, mwana mobali ya Nimishi, oyo Yawe apakolaki mafuta mpo na kobebisa ndako ya Akabi. \v 8 Tango Jewu azalaki kokokisa etumbu kati na libota ya Akabi, akutaki bakambi ya Yuda mpe bana mibali ya bandeko mibali ya Akazia, oyo bazalaki kosalela tata leki na bango Akazia, mpe abomaki bango. \v 9 Bongo, akendeki koluka Akazia, mpe bato na ye bakangaki Akazia kati na Samari epai wapi abombamaki. Bamemaki ye epai ya Jewu mpe babomaki ye. Bakundaki ye, pamba te bamilobelaki : « Azalaki mwana mobali ya Jozafati oyo azalaki koluka Yawe na motema na ye mobimba. » Ezalaki lisusu na moto ya nguya ata moko te kati na libota ya Akazia mpo na kobatela bokonzi. \s1 Atali mpe Joasi \r (2Ba 11.1-20) \p \v 10 Tango Atali, mama ya Akazia, amonaki ete mwana na ye ya mobali akufi, abomisaki libota mobimba ya bokonzi ya ndako ya Yuda. \v 11 Kasi Yeoshabeati, mwana mwasi ya mokonzi Yorami, azwaki Joasi, mwana mobali ya Akazia, alongolaki ye na mayele kati na bana mibali ya mokonzi, oyo basengeli koboma, mpe atiaki ye mpe ndesi na ye kati na shambre epai wapi batiaka bambeto. Lokola Yeoshabeati, mwana mwasi ya mokonzi Yorami mpe mwasi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, azalaki ndeko mwasi ya Akazia, abombaki Joasi mosika ya miso ya Atali ; mpe Atali abomaki Joasi te. \v 12 Joasi abombamaki elongo na bango mibu motoba kati na Tempelo ya Nzambe, wana Atali azalaki kokonza mokili. \c 23 \s1 Joasi akomi mokonzi \p \v 1 Na mobu ya sambo, Nganga-Nzambe Yeoyada alongolaki kobanga mpe azwaki mokano ya kosala boyokani elongo na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko : Azaria, mwana mobali ya Yeroami ; Isimaeli, mwana mobali ya Yoanani ; Azaria, mwana mobali ya Obedi ; Maaseya, mwana mobali ya Adaya ; mpe Elishafati, mwana mobali ya Zikiri. \v 2 Batambolaki kati na Yuda mpe basangisaki Balevi elongo na bakonzi ya mabota ya Isalaele, oyo bawutaki na bingumba nyonso. Tango bayaki na Yelusalemi, \v 3 lisanga mobimba esalaki boyokani elongo na mokonzi kati na Tempelo ya Nzambe. Yeoyada alobaki na bango : « Mwana mobali ya mokonzi asengeli kokonza lokola mokonzi, kolanda elaka oyo Yawe apesaki na tina na bakitani ya Davidi. \v 4 Sik’oyo, tala ndenge bokosala : ‹ kati na bandambo misato ya lisanga na bino Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bakosala na mokolo ya Saba, ndambo ya liboso bakokengela bikuke, \v 5 ndambo ya mibale bakokengela ndako ya mokonzi, mpe ndambo ya misato bakokengela ekuke ya Yesodi. Bato nyonso bakozala kati na mapango ya Tempelo ya Yawe. \v 6 Moko te asengeli kokota kati na Tempelo ya Yawe longola kaka Banganga-Nzambe mpe Balevi oyo bakozala na mosala, pamba te bazali bule. Bato nyonso oyo batikali basengeli kotosa mobeko ya Yawe. \v 7 Balevi bakozingela mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko. Moto mosusu oyo akomeka kokota na Tempelo ya Yawe, basengeli koboma ye. Bozala pene ya mokonzi na bisika nyonso oyo akokende. › » \p \v 8 Balevi mpe bato nyonso ya Yuda basalaki ndenge kaka Nganga-Nzambe Yeoyada atindaki. Moko na moko akamataki basoda na ye, ba-oyo bazalaki kokota na mosala na mokolo ya Saba mpe ba-oyo basilisaki mosala na bango na mokolo yango ya Saba, pamba te Nganga-Nzambe Yeoyada apemisaki ndambo moko te. \v 9 Nganga-Nzambe Yeoyada apesaki na bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko makonga, banguba minene mpe banguba mike ya mokonzi Davidi, oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe. \v 10 Atiaki bato nyonso zingazinga ya mokonzi, moko na moko na ebundeli na ye na loboko, pembeni ya etumbelo mpe ya Tempelo, wuta na ngambo ya sude kino na ngambo ya nor ya Tempelo. \v 11 Babimisaki mwana mobali ya mokonzi, balatisaki ye motole, bapesaki ye mokanda ya boyokani mpe bakomisaki ye mokonzi. Yeoyada mpe bana na ye ya mibali bapakolaki ye mafuta ya bokonzi mpe bagangaki : « Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! » \p \v 12 Tango Atali ayokaki makelele ya bato oyo bazalaki kopota mbangu mpe kobetela mokonzi maboko, akendeki epai ya bato, na Tempelo ya Yawe, \v 13 atalaki mpe amonaki mokonzi atelemi na etemelo na ye ya kolobela, pembeni ya ekotelo ya Tempelo. Bakonzi ya basoda mpe bato oyo babetaka bakelelo bazalaki pembeni ya mokonzi. Bato nyonso ya mokili bazalaki kosepela wana bazalaki kobeta bakelelo ; mpe bayembi elongo na bibetelo na bango ya mindule bazalaki kokamba nzembo mpo na kokumisa Nkolo. Atali apasolaki bilamba na ye mpe agangaki : \pi1 — Basaleli ngai likita ! Basaleli ngai likita ! \p \v 14 Nganga-Nzambe Yeoyada abengisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko mpe alobaki na bango : \pi1 — Bobimisa ye na molongo ! Mpe boboma na mopanga moto nyonso oyo akolanda ye ! \p Pamba te Nganga-Nzambe alobaki : « Boboma ye te kati na Tempelo ya Yawe ! » \p \v 15 Boye, wana Atali azwaki nzela ya ekotelo ya bampunda mpo na kokende na ndako ya mokonzi, bakangaki ye mpe babomaki ye kuna. \p \v 16 Yeoyada asalaki boyokani kati na ye, bato nyonso mpe mokonzi, mpo ete bazala bato ya Yawe. \v 17 Bato nyonso bakendeki na ndako ya nzambe Bala, babukaki yango elongo na bitumbelo mpe bikeko, mpe babomaki Matani, nganga-nzambe ya Bala, liboso ya bitumbelo. \v 18 Yeoyada apesaki mosala ya kokengela Tempelo ya Yawe epai ya Banganga-Nzambe Balevi oyo Davidi apesaki mosala ya Tempelo ya Yawe, mpo na kotumba mbeka epai na Yawe, ndenge ekomama kati na mibeko ya Moyize, na esengo mpe na koyemba banzembo, ndenge Davidi atindaki. \v 19 Atiaki lisusu bakengeli na bikuke ya Tempelo ya Yawe mpo na kopekisa moto nyonso ya mbindo kokota kuna. \v 20 Asangisaki bakonzi ya mampinga, oyo bakambaka basoda nkama moko, bato ya lokumu, bakambi ya bato mpe bato nyonso ya mokili ; amemaki mokonzi longwa na Tempelo ya Yawe kino na ndako ya mokonzi, na nzela ya ekuke ya likolo. Mpe kuna, bavandisaki ye na kiti ya bokonzi. \v 21 Bato nyonso ya mokili basepelaki, mpe engumba ekomaki na kimia, pamba te babomaki Atali na mopanga. \c 24 \s1 Joasi abongisi Tempelo ya Yawe \r (2Ba 12.1-17) \p \v 1 Joasi azalaki na mibu sambo ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku minei na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Tsibia. » Tsibia azalaki moto ya Beri-Sheba. \v 2 Joasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada. \v 3 Yeoyada aponaki mpo na Joasi basi mibale oyo babotelaki ye bana mibali mpe bana basi. \p \v 4 Sima na yango, Joasi azwaki mokano ya kobongisa Tempelo ya Yawe. \v 5 Abengisaki Banganga-Nzambe mpe Balevi, alobaki na bango : \pi1 — Botambola kati na bingumba ya Yuda, bokongola mbongo, mobu na mobu, kati na Isalaele mobimba mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe, Nzambe na bino. Bosala yango sik’oyo. \p Kasi Balevi basalaki yango na lombangu te. \v 6 Mokonzi abengisaki Yeoyada, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe alobaki na ye : « Mpo na nini olobaki te na Balevi ete bakongola, wuta na Yuda mpe na Yelusalemi, mpako oyo Moyize, mosali na Yawe, akatelaki lisanga ya Isalaele mpo na Ndako ya kapo ya Litatoli ? » \p \v 7 Nzokande, bana mibali ya Atali, mwasi mabe, batobolaki madusu mpo na kokota kati na Tempelo ya Yawe mpe basalelaki ata bisalelo na yango nyonso ya bule mpo na losambo ya banzambe Bala. \p \v 8 Mokonzi apesaki mitindo ete basala sanduku, batia yango na libanda ya ekuke ya Tempelo ya Yawe \v 9 mpe batatola kati na Yuda mpe kati na Yelusalemi ete basengeli komemela Yawe mpako oyo Moyize, mosali na Nzambe, akatelaki Isalaele kati na esobe. \v 10 Bakalaka nyonso mpe bato nyonso basepelaki na yango : bamemaki mbongo na bango mpe batiaki yango kati na sanduku kino etondaki. \v 11 Tango nyonso Balevi bazalaki komema sanduku epai ya bakalaka ya mokonzi mpe bazalaki komona ete ezalaki na mbongo ebele, mokomi mikanda ya mokonzi mpe mobombi biloko ya mokonzi ya Banganga-Nzambe bazalaki koya kolongola mbongo oyo ezalaki kati na sanduku mpe kozongisa sanduku na esika na yango. Bazalaki kosala bongo mikolo nyonso mpe bazalaki kokongola mbongo ebele. \v 12 Mokonzi mpe Yeoyada bazalaki kopesa yango na bato oyo bazalaki kosala misala ya kobongisa Tempelo ya Yawe. Bafutaki babuki mabanga, basharipantie mpe bato oyo basalaka misala ya bibende mpe ya bronze na moto, mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe. \v 13 Bato oyo bazalaki kosala misala basalaki yango noki, mpe misala ezalaki kotambola malamu na bokambami na bango. Babongisaki Tempelo ya Nzambe ndenge ezalaka. \v 14 Tango basilisaki, bazongisaki epai ya mokonzi mpe Yeoyada mbongo oyo etikalaki. Na mbongo yango, basalaki bisalelo mpo na Tempelo ya Yawe, mpo na losambo, mpo na bambeka ya kotumba, bakopo, mpe bisalelo mosusu ya wolo mpe ya palata. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Nganga-Nzambe Yeoyada, bazalaki kobonza bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe. \b \p \v 15 Yeoyada akomaki mobange makasi, atondaki mikolo mpe akufaki tango akokisaki mibu nkama moko na tuku misato ya mbotama. \v 16 Bakundaki ye kati na engumba ya Davidi esika moko na bakonzi mpo na bolamu oyo asalaki kati na Isalaele, mpo na Nzambe mpe mpo na Tempelo ya Yawe. \s1 Mabe ya Joasi \p \v 17 Sima na kufa ya Yeoyada, bakambi ya Yuda bayaki kopesa mokonzi lokumu, mpe mokonzi ayokaki bango. \v 18 Basundolaki Tempelo ya Yawe, Nzambe ya batata na bango, mpe bakomaki kogumbamela makonzi ya Ashera mpe banzambe ya bikeko. Mpo na etamboli mabe na bango, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi. \v 19 Atako Yawe atindaki basakoli kati na bango mpo na kozongisa bango epai na Ye, mpe atako basakoli bapamelaki bango, kasi batikalaki kaka koyoka te. \v 20 Molimo ya Nzambe akitelaki Zakari, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Yeoyada, mpe Zakari atelemaki liboso ya bato mpe alobaki : « Tala makambo oyo Nzambe alobi : ‹ Mpo na nini bozali kotosa mitindo ya Yawe te ? Bokokende liboso te ! Lokola bosundoli Yawe, Ye mpe asundoli bino. › » \p \v 21 Kasi bato basalelaki ye likita ; mpe na etinda ya mokonzi, babomaki ye na mabanga kati na lopango ya Tempelo ya Yawe. \p \v 22 Mokonzi Joasi abosanaki bolamu nyonso oyo Yeoyada, tata ya Zakari, asalelaki ye, mpe abomaki Zakari, mwana mobali ya Yeoyada. Tango azalaki kokufa, Zakari alobaki : « Tika ete Yawe amona mpe akata likambo oyo ! » \s1 Etumbu mpe suka ya Joasi \r (2Ba 12.18-22) \p \v 23 Na suka ya mobu, basoda ya Siri babundisaki Joasi, bakotaki na makasi kati na Yuda mpe Yelusalemi, babomaki bakambi nyonso ya bato mpe batindaki bomengo nyonso ya bitumba epai ya mokonzi na bango, na Damasi. \v 24 Atako ndambo ya basoda ya Siri kaka nde bayaki, kasi Yawe akabaki na maboko na bango mampinga ya bato ya Yuda, oyo elekaki monene, pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango. Boye, basoda ya Siri bakokisaki etumbu oyo ekweyelaki Joasi. \v 25 Tango bato ya Siri bazongaki, batikaki Joasi na bapota minene. Bakalaka na ye basalelaki ye likita na ndenge abomaki mwana mobali ya Nganga-Nzambe Yeoyada mpe babomaki ye na mbeto na ye. Boye, akufaki mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, kasi kati na bakunda ya bakonzi te. \v 26 Tala bato oyo basalelaki ye likita : Zabadi, mwana mobali ya Shimeati, mwasi ya mboka Amoni ; mpe Yozabadi, mwana mobali ya Shimiriti, mwasi ya Moabi. \v 27 Bakombo ya bana na ye ya mibali, maloba nyonso oyo basakolaki mpo na ye mpe mikano oyo babongisaki mpo na Tempelo ya Nzambe ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi. Amatsia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 25 \s1 Amatsia, mokonzi ya Yuda \r (2Ba 14.1-6) \p \v 1 Amatsia azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yeoyadani. » Yeoyadani azalaki moto ya Yelusalemi. \v 2 Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe, kasi na motema na ye mobimba te. \v 3 Sima na Amatsia kolendisa bokonzi na ye, abomaki bakalaka oyo babomaki tata na ye, mokonzi. \v 4 Nzokande, abomaki te bana mibali ya babomi ya tata na ye, pamba te kolanda ndenge ekomama kati na Mobeko, kati na buku ya Moyize, Yawe apesaki mitindo oyo : « Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko. » \p \v 5 Amatsia abengisaki bato ya Yuda mpe atiaki, kolanda mabota na bango, bakonzi ya bankoto mpe ya bankama mpo na Yuda mobimba mpe Benjame. Atangaki motango ya bato oyo bazalaki na mibu kobanda tuku mibale mpe komata : bazalaki mibali nkoto nkama misato oyo baselingwa mpo na kosala mosala ya soda, kobunda na makonga mpe na nguba. \v 6 Kati na Isalaele, azwaki lisusu na mosala ya soda, na motuya ya bakilo nkoto misato na nkama mitano ya palata, basoda ya mpiko nkoto nkama moko. \v 7 Kasi moto moko ya Nzambe ayaki epai na ye mpe alobaki : \pi1 — Oh mokonzi, tika ete basoda ya Isalaele bakende te elongo na yo na bitumba, pamba te Yawe azali te elongo na Isalaele mpe elongo na bato ya Efrayimi. \v 8 Ata soki okeyi kobunda na mpiko nyonso, Nzambe akokweyisa yo liboso ya monguna, pamba te azali na makoki ya kosunga mpe ya kokweyisa. \p \v 9 Amatsia atunaki moto na Nzambe : \pi1 — Boni, nkoto misato na nkama mitano ya bakilo ya palata oyo napesaki mampinga ya Isalaele ekosuka ndenge nini ? \p Moto na Nzambe azongisaki : \pi1 — Yawe akoki kopesa yo koleka oyo wana. \p \v 10 Boye, Amatsia azongisaki na bandako na bango, basoda oyo bayaki epai na ye wuta na Efrayimi. Kasi basoda yango basilikelaki Yuda mpe bazongaki na bandako na bango na kanda makasi. \r (2Ba 14.7-14) \p \v 11 Amatsia azwaki mpiko mpe akambaki mampinga na ye kino na Lubwaku ya mungwa epai wapi abomaki bato ya Seiri nkoto zomi. \v 12 Bato ya Yuda bakangaki lisusu bato ya bomoi nkoto zomi, bamemaki bango na songe ya ngomba mpe batindikaki bango wuta na songe ya ngomba ; mpe bango nyonso bakweyaki na se, banzoto na epanzanaki na biteni. \p \v 13 Na tango wana, basoda oyo Amatsia azongisaki mpe apekisaki kokende na bitumba bakotaki na makasi kati na bingumba ya Yuda longwa na Samari kino na Beti-Oroni. Babomaki bato nkoto misato mpe bamemaki bomengo ebele ya bitumba. \s1 Joasi alongi Amatsia \p \v 14 Sima na ye kolonga bato ya Edomi na bitumba, Amatsia azongaki epai na ye ; amemaki banzambe ya bikeko ya bato ya Seiri, akomisaki yango banzambe na ye moko, agumbamelaki yango mpe atumbelaki yango mbeka ya malasi. \v 15 Mpo na yango, kanda ya Yawe epelelaki Amatsia ; mpe Yawe atindaki mosakoli moko kotuna Amatsia : \pi1 — Mpo na nini ozali kogumbamela banzambe ya bato wana oyo ekokaki ata kokangola bato na yango te na loboko na yo ? \p \v 16 Wana azalaki nanu koloba, mokonzi alobaki na ye : \pi1 — Kata ! Nani atie yo mopesi toli ya mokonzi ? Kanga monoko na yo, soki te bakoboma yo ! \p Mosakoli abendaki nzoto ; kasi, liboso ya kokende, alobaki : \pi1 — Lokola osali boye mpe oboyi koyoka toli na ngai, nandimisami ete Nzambe azwi mokano ya koboma yo. \r (2Ba 14.8-20) \p \v 17 Sima na Amatsia, mokonzi ya Yuda, kotuna toli epai ya bapesi toli na ye, abetaki mondenge na Joasi, mwana mobali ya Yoakazi mpe koko ya Jewu, mokonzi ya Isalaele ; alobaki : \pi1 — Yaka tobunda ! \p \v 18 Kasi Joasi, mokonzi ya Isalaele, azongiselaki Amatsia, mokonzi ya Yuda : \pi1 — Mokolo moko, nzete ya sende ya Libani etindaki maloba epai ya nzete ya sedele ya Libani : « Balisa mwana na yo ya mwasi epai ya mwana na ngai ya mobali. » Kasi nyama moko ya zamba ya Libani elekaki mpe enyataki nzete ya sende. \v 19 Solo, ozali komilobela ete olongi Edomi, mpe motema ezali kosepela mpe komikumisa. Tala, ekoleka malamu ete ovanda na ndako na yo. Mpo na nini koluka ete pasi makasi ekweyela yo elongo na Yuda ? \p \v 20 Kasi Amatsia ayokaki ye te, pamba te Nzambe nde asalaki bongo mpo na kokaba bango na maboko ya Joasi, mpo ete basambelaki banzambe ya Edomi. \v 21 Boye Joasi, mokonzi ya Isalaele, akendeki kobundisa Amatsia, mokonzi ya Yuda. Ye mpe Amatsia, mokonzi ya Yuda, babundaki na Beti-Shemeshi kati na mokili ya Yuda. \v 22 Isalaele alongaki Yuda, mpe bato ya Yuda bakimaki, moto na moto na ndako na ye. \v 23 Joasi, mokonzi ya Isalaele, akangaki Amatsia, mokonzi ya Yuda, mwana mobali ya Joasi mpe koko ya Yoakazi, na Beti-Shemeshi. Amemaki ye na Yelusalemi mpe abukaki mir ya Yelusalemi, na molayi ya bametele pene nkama moko na tuku mwambe, longwa na ekuke ya Efrayimi kino na ekuke ya suka. \v 24 Joasi akamataki palata nyonso, wolo nyonso mpe biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Nzambe oyo Obedi-Edomi azalaki kobatela, kati na bibombelo ya ndako ya mokonzi ; akangaki bato na bowumbu mpe azongaki na Samari. \p \v 25 Amatsia, mwana mobali ya Joasi, mokonzi ya Yuda, awumelaki lisusu na bomoi mibu zomi na mitano sima na kufa ya Joasi, mwana mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Isalaele. \p \v 26 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Amatsia mpe misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele. \v 27 Kobanda na tango oyo Amatsia apesaki Yawe mokongo, basalelaki ye likita, na Yelusalemi, mpo na kotelemela ye ; mpe akimaki na Lakishi. Kasi batindaki bato mpo ete balanda ye kino na Lakishi, mpe babomaki ye kuna. \v 28 Bamemaki nzoto na ye na likolo ya mpunda mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Yuda. \c 26 \s1 Oziasi, mokonzi ya Yuda \r (2Ba 14.21-22; 15.1-3) \p \v 1 Bato nyonso ya Yuda baponaki Oziasi oyo azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama mpe bakomisaki ye mokonzi na esika ya Amatsia, tata na ye. \v 2 Sima na kufa ya tata na ye, Amatsia, Oziasi atongaki lisusu engumba Eyiloti mpe azongisaki yango na se ya bokonzi ya Yuda. \v 3 Oziasi azalaki na mibu zomi na motoba ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mibale na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yekolia. » Yekolia azalaki moto ya Yelusalemi. \v 4 Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Amatsia, tata na ye, asalaki. \p \v 5 Oziasi akangamaki na Nzambe mikolo nyonso ya bomoi ya Zakari, pamba te azalaki kolakisa ye kotosa Nzambe. Na tango nyonso oyo Oziasi awumelaki kokangama na Yawe, Nzambe azalaki kolongisa ye. \v 6 Akendeki kobundisa bato ya Filisitia mpe atobolaki madusu kati na bamir ya Gati, ya Yabine mpe ya Asidodi. Atongaki lisusu bingumba ebele kati na etuka ya Asidodi mpe kati na bituka mosusu ya bato ya Filisitia. \v 7 Nzambe asungaki ye tango abundisaki bato ya Filisitia, ya Arabi oyo bazalaki kovanda na Guri-Bala, mpe tango abundisaki bato ya Maoni. \v 8 Bato ya Amoni bafutaki mpako ya mokonzi epai ya Oziasi, mpe kombo na ye ekendeki sango kino na bandelo ya Ejipito, pamba te akomaki na nguya makasi koleka. \v 9 Oziasi atongaki bandako milayi kati na Yelusalemi, na ekuke ya suka, na ekuke ya lubwaku mpe na suka ya mir ; mpe alendisaki yango makasi. \v 10 Atongaki lisusu bandako milayi kati na esobe mpe atimolaki mabulu ebele ya mayi mpo ete azalaki na bibwele ebele na se ya bangomba mpe na etando. Azalaki mpe na basali ebele oyo bazalaki kotimola mabele mpe kosala kati na bilanga na ye ya vino kati na bituka ya bangomba mpe na mabele oyo ebotaka malamu, pamba te azalaki kolinga mingi misala ya bilanga. \v 11 Oziasi azalaki na basoda oyo baselingwa mpo na bitumba ; mpe babongisamaki na masanga kolanda motango na bango ndenge Yeyeli, mokomi mikanda, mpe kalaka Maaseya, na bokambami ya Anania, moko kati na bakonzi ya bakalaka ya mokonzi, bazwaki bango na mosala. \v 12 Motango nyonso ya bakambi ya mabota, oyo bazalaki kokamba basoda ya mpiko, ezalaki nkoto mibale na nkama motoba. \v 13 Bakonzi ya mabota bazalaki kokamba basoda nkoto nkama misato na sambo na nkama mitano oyo baselingwa mpo na bitumba mpe bazalaki basoda ya mpiko, mpo na kobundela mokonzi liboso ya banguna na ye. \v 14 Na tango nyonso ya bitumba, Oziasi azalaki kopesa banguba, makonga, bikoti ya bibende, bilamba ya bibende oyo ebatelaka tolo, matolotolo mpe bibambelo mabanga. \v 15 Asalisaki kati na Yelusalemi, epai ya bato ya mayele, bamashini mpo na kotia yango likolo ya bandako milayi mpe na suka ya bamir mpo na kobwaka makonga mpe mabanga minene. Kombo na ye ekendeki sango, pamba te asungamaki makasi kino kokoma moto na nguya. \s1 Lolendo mpe mbeba ya Oziasi \p \v 16 Kasi tango Oziasi akomaki na nguya, atondaki na lolendo oyo ememaki ye na kokweya. Atambolaki lisusu na bosembo te liboso ya Yawe, Nzambe na ye, kino kokota na Tempelo ya Yawe mpo na kotumba mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo ya malasi. \v 17 Nganga-Nzambe Azaria alandaki Oziasi na sima, elongo na Banganga-Nzambe mosusu ya Yawe, tuku mwambe, bango nyonso batonda na mpiko. \v 18 Batelemelaki mokonzi Oziasi mpe balobaki na ye : « Oziasi, kotumba mbeka ya malasi mpo na Yawe ezali mosala na yo te ! Ezali nde mosala ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo babulisama mpo na mosala yango. Bima wuta na Esika ya bule, pamba te ozali kosala likambo ya nkele, mpe Yawe Nzambe akosepela na yo te ! » \p \v 19 Bongo Oziasi, oyo asimbaki mbabola na loboko na ye, atombokelaki Banganga-Nzambe. Kaka na tango yango, wana azalaki kati na Tempelo ya Yawe liboso ya etumbelo ya ansa, bokono ya maba ebimaki na elongi na ye na miso ya Banganga-Nzambe. \v 20 Tango Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe Banganga-Nzambe mosusu batalaki ye mpe bamonaki ete akomi na bokono ya maba na elongi, babenganaki ye na lombangu wana ye moko mpe azalaki kobima na lombangu, pamba te Yawe asambwisaki ye. \r (2Ba 15.5-7) \p \v 21 Mokonzi Oziasi abelaki bokono ya maba kino na mokolo na ye ya kufa. Lokola azalaki kobela bokono ya maba, akomaki kovanda na ndako moko batonga mosika, pamba te babenganaki ye mosika ya Tempelo ya Yawe. Yotami, mwana na ye ya mobali, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, ayangelaki bato ya mokili. \v 22 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Oziasi mpe misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ezali mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, nde akomaki yango. \p \v 23 Oziasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bango kati na lilita ya bakonzi, pamba te bato bazalaki koloba : « Abelaki bokono ya maba. » \p Yotami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 27 \s1 Yotami, mokonzi ya Yuda \r (2Ba 15.33-38) \p \v 1 Yotami azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Yerusha. » Yerusha azalaki mwana ya Tsadoki. \v 2 Yotami asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge kaka Oziasi, tata na ye, asalaki ; kasi ye, atikalaki kokota te kati na Tempelo ya Yawe. Atako bongo, bato bakobaki kosala makambo mabe. \p \v 3 Yotami atongaki ekuke ya likolo ya Tempelo ya Yawe mpe asalaki misala ebele na mir, na ngomba Ofeli. \v 4 Atongaki mpe bingumba kati na etuka ya bangomba ya Yuda, bandako makasi mpe bandako milayi kati na bazamba. \v 5 Yotami abundisaki mokonzi ya bato ya Amoni mpe alongaki bango. Na mobu wana mpe na mibu mibale oyo elandaki, bato ya Amoni bafutaki ye lokola mpako ya mokonzi bakilo nkoto misato na nkama mitano ya palata, bakilo nkoto minei na nkama mitano ya ble mpe bakilo nkoto minei na nkama mitano ya orje. \v 6 Yotami akomaki na nguya makasi, pamba te azalaki kotambola na bosembo na miso ya Yawe, Nzambe na ye. \p \v 7 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yotami, bitumba mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda. \v 8 Azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. \v 9 Yotami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Akazi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 28 \s1 Akazi, mokonzi ya Yuda \r (2Ba 16.1-20) \p \v 1 Akazi azalaki na mibu tuku mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na motoba na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; nzokande, Davidi, koko na ye, asalaki makambo ya sembo. \v 2 Alandaki banzela oyo bakonzi ya Isalaele batambolaki na yango mpe asalaki kutu banzambe ya bikeko ya bibende banyangwisa na moto mpo na banzambe Bala. \v 3 Atumbaki mbeka ya malasi kati na Lubwaku ya Beni-Inomi mpe abonzaki bana na ye ya mibali na moto kolanda misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bana ya Isalaele. \v 4 Abonzaki bambeka mpe atumbaki mbeka ya malasi, na bisambelo ya likolo ya bangomba, na bangomba mike mpe na se ya banzete ya mibesu. \p \v 5 Yawe, Nzambe na ye, akabaki ye na maboko ya mokonzi ya Siri. Bato ya Siri babetaki ye, bazwaki bato na ye ebele na bowumbu mpe bamemaki bango na Damasi. Nzambe akabaki ye lisusu na maboko ya mokonzi ya Isalaele, oyo abebisaki biloko na ye mpe alongaki ye. \v 6 Na mokolo moko, Peka, mwana mobali ya Remalia, abomaki basoda nkoto nkama moko na tuku mibale kati na Yuda, bango nyonso bazalaki basoda ya mpiko ; pamba te basundolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango. \v 7 Zikiri, moto ya bitumba ya Efrayimi, abomaki Maaseya, mwana mobali ya mokonzi ; Azirikami, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; mpe Elikana, molandi ya mokonzi. \v 8 Bato ya Isalaele bakangaki kati na bandeko na bango bato nkoto nkama mibale : basi, bana mibali mpe bana basi ; bazwaki bomengo ebele ya bitumba mpe bamemaki yango na Samari. \p \v 9 Kuna na Samari, ezalaki na mosakoli moko ya Yawe, kombo na ye « Odedi. » Abimaki liboso ya mampinga tango bazalaki kozonga na Samari mpe alobaki na bango : « Tala, na kanda makasi na Ye mpo na Yuda, Yawe, Nzambe ya batata na bino, akabi bango na maboko na bino, mpe bobomi bango na kanda oyo ekomi kino na likolo. \v 10 Mpe sik’oyo, bolingi kokomisa bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi bawumbu na bino ? Kasi bino moko, bozali mpe na ngambo te liboso ya Yawe, Nzambe na bino ? \v 11 Boyoka ngai sik’oyo ! Bozongisa bandeko na bino, oyo bokangi lokola bawumbu, pamba te kanda makasi ya Yawe ezali likolo na bino. » \p \v 12 Kati na bakambi ya Efrayimi, bamosusu batelemelaki ba-oyo bawutaki na bitumba. Ezalaki Azaria, mwana mobali ya Yoanani ; Berekia, mwana mobali ya Meshilemoti ; Ezekiasi, mwana mobali ya Shalumi ; mpe Amasa, mwana mobali ya Adilayi. \v 13 Balobaki na bango : « Bosengeli te komema bakangami oyo awa, soki te tokomema ngambo epai na Yawe. Boni, bolingi lisusu kobakisa masumu mpe ngambo na biso ! Ngambo na biso eleki penza monene, mpe kanda makasi ya Yawe ezali likolo ya Isalaele. » \p \v 14 Basoda batikaki bakangami mpe bomengo ya bitumba na miso ya bakambi mpe ya lisanga mobimba. \v 15 Sima, bato oyo baponaki na bakombo na bango bazwaki bakangami mpe balendisaki bango ; bazwaki kati na bomengo ya bitumba bilamba, mpe balatisaki ba-oyo nyonso bazalaki bolumbu. Bapesaki bango bilamba, basapato, bilei mpe masanga ; mpe bapakolaki ba-oyo bazokaki kisi, bamemaki na likolo ya ba-ane ba-oyo bakokaki kotambola te mpe bazongisaki bango na Jeriko, engumba ya banzete ya mbila, epai ya bandeko na bango. Sima, bazongaki na Samari. \b \p \v 16 Na tango yango, mokonzi Akazi atindaki bato epai ya bakonzi ya Asiri mpo na kosenga lisungi. \v 17 Bato ya Edomi bayaki lisusu kobundisa Yuda mpe bamemaki bakangami, \v 18 wana bato ya Filisitia bakotaki na makasi kati na bingumba ya etando mpe ya sude ya Yuda. Bazwaki na makasi Beti-Shemeshi, Ayaloni, Gederoti, Soko, Timina mpe Gimizo elongo na bamboka na yango ya zingazinga, mpe bavandaki kuna. \v 19 Yawe asambwisaki Yuda likolo ya Akazi, mokonzi ya Isalaele, pamba te atindikaki bato ya Yuda na mabe mpe azangaki boyengebene liboso ya Yawe. \v 20 Na esika ya kosunga ye, Tigilati-Pilezeri, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa ye mpe azwaki ye lokola monguna. \v 21 Akazi azwaki ndambo ya biloko ya Tempelo ya Yawe, ya ndako ya mokonzi mpe ya bandako ya bakambi ; mpe apesaki yango epai ya mokonzi ya Asiri. Kasi atako bongo, azwaki kaka lisungi te. \v 22 Wana azalaki kati na pasi, mokonzi Akazi akobaki lisusu kosala makambo ya nkele na miso ya Yawe : \v 23 abonzaki bambeka epai ya banzambe ya Damasi oyo elongaki ye, pamba te amilobelaki : « Lokola banzambe ya bakonzi ya Siri bayaka kosunga bato na bango, ngai mpe nakobonzela bango bambeka mpo ete baya kosunga ngai ! » \p Kasi esalaki ete ye akweyisama, Isalaele mobimba mpe ekweyisama. \p \v 24 Akazi asangisaki bisalelo nyonso ya Tempelo ya Nzambe mpe abukaki-bukaki yango. Akangaki bikuke ya Tempelo ya Yawe mpe atongaki bitumbelo na babalabala nyonso ya Yelusalemi. \v 25 Kati na bingumba nyonso ya Yuda, asalaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpo na kobonza mbeka ya malasi epai ya banzambe mosusu. Na bongo, apesaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, kanda makasi. \v 26 Makambo mosusu oyo etali mokonzi Akazi mpe etamboli na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele. \v 27 Akazi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba Yelusalemi, kasi kati na bakunda ya bakonzi ya Isalaele te. Ezekiasi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 29 \s1 Ezekiasi apetoli Tempelo ya Yawe \r (2Ba 18.2-3) \p \v 1 Ezekiasi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na libwa na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Abiya. » Abiya azalaki mwana mwasi ya Zakari. \v 2 Ezekiasi asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe ndenge Davidi, koko na ye, asalaki. \b \p \v 3 Na sanza ya liboso ya mobu ya liboso ya bokonzi na ye, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe mpe abongisaki yango. \v 4 Abengisaki Banganga-Nzambe mpe Balevi, asangisaki bango na libanda ya ngambo ya este. \p \v 5 Alobaki na bango : \pi1 — Boyoka ngai, Balevi ! Bomibulisa sik’oyo mpe bopetola Tempelo ya Yawe, Nzambe ya bakoko na bino ; bolongola mbindo nyonso kati na Esika ya bule. \v 6 Batata na biso bazangaki boyengebene, basalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na biso, mpe basundolaki Ye ; batikaki Tempelo ya Yawe mpe bapesaki Ye mokongo. \v 7 Bakangaki kutu bikuke ya ndako moke ya kokotela, babomaki minda mpe batikaki kobonzela Nzambe ya Isalaele malasi mpe bambeka ya kotumba kati na Esika ya bule. \v 8 Boye, kanda ya Yawe ekweyelaki Yuda mpe Yelusalemi, akomisaki bango eloko ya kobanga, ya somo mpe ya kotiola, ndenge bokoki komona yango na miso na bino. \v 9 Yango wana batata na biso bakweyaki na mopanga ; mpe yango wana lisusu bana na biso ya mibali, bana na biso ya basi mpe basi na biso bazali kati na bowumbu. \v 10 Sik’oyo, nazwi mokano ya kosala boyokani elongo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpo ete abwaka kanda makasi na Ye mosika na biso. \v 11 Sik’oyo, bana na ngai ya mibali, bobenda nzoto te, pamba te Yawe aponi bino mpo ete botelema liboso na Ye, bosala mosala na Ye, bosala losambo mpe botumbela Ye mbeka ya malasi mpo na lokumu na Ye. \b \li4 \v 12 Bongo, Balevi oyo bakotaki na mosala : \b \li1 Na molongo ya bato ya Keati : \li2 Maati, mwana mobali ya Amasayi ; mpe Joeli, mwana mobali ya Azaria ; \li1 na molongo ya Merari : \li2 Kishi, mwana mobali ya Abidi, mpe Azaria, mwana mobali ya Yealeyeli ; \li1 na molongo ya bato ya Gerishoni : \li2 Yoa, mwana mobali ya Zima ; mpe Edeni, mwana mobali ya Yoa ; \li1 \v 13 na molongo ya Elitsafani : \li2 Shimiri mpe Yeyeli ; \li1 na molongo ya Azafi : \li2 Zakari mpe Matania ; \li1 \v 14 na molongo ya Emani : \li2 Yeyeli mpe Shimei ; \li1 mpe na molongo ya Yedutuni : \li2 Shemaya mpe Uzieli. \p \v 15 Tango basangisaki bandeko na bango mpe bamibulisaki, bakotaki mpo na kopetola Tempelo ya Yawe, ndenge mokonzi apesaki mitindo mpe kolanda Liloba na Yawe. \v 16 Banganga-Nzambe bakotaki kati na Tempelo ya Yawe mpo na kopetola yango : babwakaki kati na lopango ya Tempelo ya Yawe biloko nyonso ya mbindo oyo bamonaki kati na yango. Balevi balokotaki mpe bamemaki yango kino na lubwaku ya Sedron. \v 17 Babandaki mosala yango ya kopetola na mokolo ya liboso ya sanza ya liboso mpe, na mokolo ya mwambe ya sanza yango, bakomaki na ndako moke ya kokotela na Tempelo. Basalaki lisusu mikolo mwambe mpo na kokoba kobulisa Tempelo ya Yawe mpe basukisaki mosala yango na mokolo ya zomi na motoba ya sanza ya liboso. \p \v 18 Bakendeki epai ya mokonzi Ezekiasi mpe balobaki : \pi1 — Topetoli Tempelo mobimba ya Yawe, etumbelo ya bambeka ya kotumba elongo na bisalelo na yango nyonso, mpe mesa oyo batiaka mapa elongo na bisalelo na yango nyonso. \v 19 Tobongisi mpe tobulisi bisalelo nyonso oyo mokonzi Akazi, na kozanga boyengebene na ye na miso ya Yawe, abebisaki bosantu na yango tango azalaki mokonzi. Bisalelo yango ekomi sik’oyo liboso ya etumbelo. \s1 Libulisi ya Tempelo ya Yawe \p \v 20 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, mokonzi Ezekiasi asangisaki bakambi ya engumba mpe bakendeki na Tempelo ya Yawe. \v 21 Bamemaki bangombe sambo ya mibali, bameme sambo ya mibali, bana meme sambo ya mibali mpe bantaba sambo ya mibali lokola mbeka mpo na masumu, mpo na mokili, mpo na Esika ya bule mpe mpo na Yuda. Mokonzi apesaki mitindo epai ya Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, ete babonza bambeka yango na etumbelo ya Yawe. \v 22 Banganga-Nzambe bakataki bakingo ya bangombe, bazwaki makila na yango mpe babwakaki yango na etumbelo, bakataki bakingo ya bameme ya mibali mpe babwakaki makila na yango na etumbelo, bakataki bakingo ya bana meme mpe babwakaki makila na yango na etumbelo. \v 23 Bongo bamemaki bantaba ya mibali oyo ebongisamaki mpo na mbeka mpo na masumu, liboso ya mokonzi mpe lisanga, mpe batiaki yango maboko. \v 24 Banganga-Nzambe bakataki bakingo ya bantaba mpe babwakaki makila na yango na etumbelo lokola mbeka mpo na masumu, mpe mpo na kokokisa mosala ya bolimbisi masumu ya Isalaele mobimba ; pamba te mokonzi apesaki mitindo ete babonza mpo na Isalaele mobimba bambeka ya kotumba mpe bambeka mpo na masumu. \v 25 Mokonzi atiaki Balevi kati na Tempelo ya Yawe elongo na bangongi, makembe mpe mandanda kolanda mitindo ya Davidi, ya Gadi, momoni makambo ya mokonzi ; mpe ya mosakoli Natan ; pamba te ezalaki mitindo oyo Yawe apesaki na nzela ya basakoli na Ye. \v 26 Balevi babongamaki elongo na bibetelo mindule ya Davidi, mpe Banganga-Nzambe elongo na bakelelo na bango. \v 27 Ezekiasi apesaki mitindo ete babonza mbeka ya kotumba na etumbelo ; mpe tango babandaki kobonza mbeka ya kotumba, babandaki mpe koyemba mpo na kokumisa Yawe na bakelelo mpe bibetelo mindule ya Davidi, mokonzi ya Isalaele. \v 28 Lisanga mobimba egumbamaki wana ; bayembi bazalaki koyemba, mpe babeti kelelo bazalaki kobeta yango ; nyonso ekobaki kino tango basilisaki kobonza mbeka ya kotumba. \v 29 Tango basilisaki kobonza mbeka ya kotumba, mokonzi mpe bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bakitisaki bilongi na bango mpe bagumbamaki kino na se. \v 30 Mokonzi Ezekiasi elongo na bakambi na ye bapesaki mitindo na Balevi ete bakumisa Yawe na banzembo ya Davidi mpe ya mosakoli Azafi. Boye, bayembaki banzembo ya kokumisa na esengo, bagumbaki mito na bango mpe bagumbamaki kino na se. \p \v 31 Ezekiasi alobaki : \pi1 — Awa bomibulisi sik’oyo mpo na Yawe, bopusana, bomema na Tempelo ya Yawe bambeka mpe makabo ya kozongisa matondi. \p Lisanga ememaki bambeka mpe makabo ya kozongisa matondi, mpe bato ya motema ya kokaba bamemaki bambeka ya kotumba. \v 32 Tala motango ya bambeka ya kotumba oyo lisanga ebonzaki : bangombe ya mibali tuku sambo, bameme ya mibali nkama moko, bana meme nkama mibale : nyonso lokola bambeka ya kotumba mpo na Yawe. \v 33 Babulisaki lisusu lokola bambeka bangombe nkama motoba, bameme mpe bantaba nkoto misato. \v 34 Kasi lokola Banganga-Nzambe bazalaki mingi te mpo na kokata na biteni bambeka nyonso ya kotumba, bandeko na bango, Balevi, basungaki bango kino mosala nyonso esilaki mpe kino Banganga-Nzambe mosusu bamibulisaki ; pamba te Balevi balekaki Banganga-Nzambe na makanisi ya komibulisa. \v 35 Longola bambeka ya kotumba oyo ezalaki mingi, esengelaki lisusu kotumba mafuta ya bambeka ya boyokani mpe kosopa bambeka ya masanga mpo na bambeka ya kotumba. Ezali boye nde babongisaki lisusu misala ya Tempelo ya Yawe. \v 36 Ezekiasi mpe bato nyonso basepelaki na ndenge Nzambe akokisaki makambo mpo na bato na Ye, pamba te nyonso esalemaki na lombangu. \c 30 \s1 Ezekiasi asepeli feti ya Pasika \p \v 1 Ezekiasi atindaki bamemi sango kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, mpe akomelaki Efrayimi mpe Manase mikanda mpo na kosenga na bango ete baya na Tempelo ya Yawe, na Yelusalemi, mpo na kosepela feti ya Pasika ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. \v 2 Mokonzi elongo na bakalaka na ye mpe lisanga mobimba ya Yelusalemi bazwaki mokano ya kosepela feti ya Pasika na sanza ya mibale. \v 3 Balongaki te kosepela feti ya Pasika na mokolo oyo ekatama, pamba te Banganga-Nzambe oyo bamibulisaki bazalaki mingi te, mpe bato basanganaki te na Yelusalemi. \v 4 Mokonzi mpe lisanga mobimba bandimaki mabongisi yango, \v 5 bazwaki mokano ya kopesa mayebisi kati na Isalaele mobimba, longwa na Beri-Sheba kino na Dani, mpo na kosenga na bato nyonso ete baya kosepela feti ya Pasika, na Yelusalemi mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. Pamba te bato moke kaka basepelaki yango kolanda ndenge ekomama kati na makomi. \p \v 6 Na etinda ya mokonzi, bamemi sango bakendeki kati na Isalaele mobimba mpe Yuda, na mikanda oyo ewutaki epai ya mokonzi mpe bakalaka na ye. Tala makambo oyo ezalaki kati na mikanda yango : \pm « Bana ya Isalaele, bozongela Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele, mpo ete Ye mpe azongela bino oyo bobiki na maboko ya bakonzi ya mboka Asiri ! \v 7 Bozala te lokola batata mpe bandeko na bino oyo bazangaki boyengebene liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango. Yango wana asalaki ete babebisama ndenge bozali komona. \v 8 Bozala moto makasi te lokola batata na bino ; bomipesa epai na Yawe, boya na Esika ya bule oyo Ye moko abulisi mpo na libela mpe bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpo ete kanda makasi na Ye ezala mosika na bino ! \v 9 Soki solo bozongeli Yawe, bandeko mpe bana na bino oyo bakendeki na bowumbu bakozwa ngolu liboso ya bato oyo bakangaki bango, mpe bakozonga na mokili oyo ; pamba te Yawe, Nzambe na bino, atonda na ngolu mpe na mawa. Solo, soki bozongeli Ye, akobalola te elongi na Ye mosika na bino. » \p \v 10 Bamemi sango batambolaki kati na bingumba nyonso ya Efrayimi mpe ya Manase kino na Zabuloni. Kasi bato bazalaki koseka mpe kotiola bango. \v 11 Nzokande, ndambo ya bato ya Aseri, ya Manase mpe ya Zabuloni bamikitisaki mpe bakendeki na Yelusalemi. \v 12 Kati na mokili ya Yuda, loboko ya Nzambe ezalaki kosala na nguya makasi epai ya bato, mpo na kopesa bango bomoko na molimo mpo na kotosa mitindo ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye, kolandisama na Liloba na Yawe. \p \v 13 Bato ebele basanganaki na Yelusalemi mpo na kosepela feti ya Mapa ezanga levire, na sanza ya mibale : bazalaki penza ebele ya bato. \v 14 Babukaki bitumbelo kati na Yelusalemi mpe balimwisaki bambabola nyonso ya malasi na kobwaka yango na lubwaku ya Sedron. \v 15 Bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya mibale. Banganga-Nzambe elongo na Balevi bayokaki soni, bamibulisaki mpe babonzaki bambeka ya kotumba kati na Tempelo ya Yawe. \v 16 Bazongelaki misala na bango ndenge ekomama na mibeko ya Moyize, moto na Nzambe. Balevi bazalaki kopesa makila ya bambeka epai ya Banganga-Nzambe ; mpe bango, Banganga-Nzambe, bazalaki kosopa yango na etumbelo. \v 17 Lokola bato mingi kati na lisanga bamibulisaki te, Balevi bazwaki mokumba ya kokata bakingo ya bampate ya Pasika mpo na bato wana nyonso oyo bazalaki peto te ; mpe na bongo, bakokaki te kobulisa bampate na bango epai na Yawe. \v 18 Atako bato ebele oyo bawutaki na Manase, na Efrayimi, na Isakari mpe na Zabuloni bamipetolaki te, kasi baliaki Pasika na kozanga kolanda oyo ekomama. Yango wana Ezekiasi abondelaki boye mpo na bango : \pm « Yawe, Yo oyo ozali malamu, tika ete olimbisa \v 19 moto nyonso oyo amipesi na koluka Nzambe, Yawe, Nzambe ya bakoko na ye, na motema na ye mobimba atako amipetolaki te kolanda mibeko ya Esika ya bule ! » \p \v 20 Yawe ayokaki libondeli ya Ezekiasi mpe abetaki bato te. \v 21 Boye bato ya Isalaele oyo bazalaki na Yelusalemi basepelaki mikolo sambo mpe na esengo makasi feti ya Mapa ezanga levire wana Balevi mpe Banganga-Nzambe bazalaki kokumisa Yawe mikolo nyonso na kobeta makasi bibetelo mindule na bango mpo na lokumu ya Yawe. \v 22 Ezekiasi alendisaki Balevi nyonso oyo balakisaki ete bayebi malamu mosala ya Yawe. \p Na mikolo sambo ya feti, baliaki misuni ya bambeka, babonzaki bambeka ya boyokani mpe basanzolaki Yawe, Nzambe ya bakoko na bango. \p \v 23 Lisanga mobimba eyokanaki kobakisa mikolo mosusu sambo mpo na kokoba kosepela feti. Boye, basalaki feti na esengo na mikolo yango sambo. \v 24 Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, apesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto sambo ; mpe bakalaka bapesaki mpo na lisanga bangombe ya mibali nkoto moko, bameme mpe bantaba nkoto zomi. Banganga-Nzambe ebele bamibulisaki. \v 25 Lisanga mobimba ya Yuda, Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Isalaele mpe bapaya oyo bawutaki na Isalaele to bavandi ya Yuda bazalaki na esengo. \v 26 Esengo ezalaki makasi kati na Yelusalemi, pamba te wuta na tango ya Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, likambo ya boye etikala nanu kosalema te kati na Yelusalemi. \v 27 Banganga-Nzambe mpe Balevi batelemaki mpo na kopambola bato, mpe Nzambe ayokaki bango mpo ete losambo na bango ekomaki kino na Likolo, evandelo na Ye ya bule. \c 31 \s1 Ezekiasi abongisi mosala ya Tempelo \p \v 1 Tango feti nyonso esilaki, bato nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kuna bakendeki na bingumba ya Yuda, babukaki makonzi ya bule, bakweyisaki bikeko ya nzambe mwasi Ashera mpe bapanzaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo kati na Yuda nyonso, kati na Benjame, kati na Efrayimi mpe kati na Manase. Sima na kobebisa biloko wana nyonso, bato ya Isalaele bazongaki kati na bingumba na bango mpe bandako na bango. \p \v 2 Ezekiasi atiaki Banganga-Nzambe mpe Balevi na masanga mpe apesaki na moko na moko mosala kati na lisanga na ye. Banganga-Nzambe mpe Balevi bapesamelaki mosala ya bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani, mosala ya kozongisa matondi mpe ya koyemba banzembo mpo na kokumisa mpe kosanzola Yawe, na bikuke ya Tempelo ya Yawe. \v 3 Mokonzi azwaki ndambo ya bozwi na ye mpe apesaki mpo na bambeka ya kotumba : bambeka ya kotumba ya tongo mpe ya pokwa, ya mikolo ya Saba, ya ebandeli ya sanza mpe ya bafeti oyo ekatama, kolanda ndenge ekomama kati na mibeko ya Yawe. \v 4 Mokonzi apesaki mitindo epai ya bavandi ya Yelusalemi ete bapesa ndambo oyo esengeli kopesama epai ya Banganga-Nzambe mpe Balevi mpo ete bamipesa na misala oyo mibeko ya Yawe ezali kotinda bango. \v 5 Tango kaka bapanzaki sango ya mitindo oyo, bato ya Isalaele bapesaki na esengo bambuma na bango ya liboso ya ble, ya vino ya sika, ya mafuta, ya mafuta ya nzoyi mpe ya biloko nyonso oyo ebimaka na bilanga. Bamemaki lisusu biloko ebele lokola eteni ya zomi ya nyonso. \v 6 Bato ya Isalaele elongo na bato ya Yuda oyo bazalaki kovanda kati na bingumba ya Yuda bamemaki eteni na bango ya zomi ya bangombe, ya bameme, ya bantaba mpe ya makabo ya bule oyo ebulisamaki mpo na Yawe, Nzambe na bango, mpe batiaki yango na mipiku. \v 7 Babandaki kosala mipiku yango na sanza ya misato mpe basilisaki na sanza ya sambo. \v 8 Tango Ezekiasi elongo na bakalaka na ye bayaki komona mipiku yango, bakumisaki Yawe mpe bapambolaki Isalaele, bato na Ye. \v 9 Ezekiasi atunaki Banganga-Nzambe mpe Balevi na tina na mipiku yango. \v 10 Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe, moto ya libota ya Tsadoki, azongisaki : \pi1 — Wuta tango bato babandaki komema makabo na bango kati na Tempelo ya Yawe, toliaki, totondaki mpe totiki ebele, pamba te Yawe apambolaki bato na Ye. Mipiku ya biloko oyo ozali komona awa ezali nde oyo etikali. \p \v 11 Ezekiasi apesaki mitindo ete babongisa bisika mpo na kobomba biloko yango kati na Tempelo ya Yawe ; mpe esalemaki bongo. \v 12 Bakomaki kotia kuna na boyengebene makabo ya bato, biteni ya zomi mpe makabo mosusu ya bule. Molevi Konania azalaki na mokumba ya kobatela biloko yango elongo na Shimei, ndeko na ye ya mobali, lokola molandi na ye. \p \v 13 Kolandisama na mokano ya mokonzi Ezekiasi mpe ya Azaria, mokonzi ya Banganga-Nzambe ya Tempelo ya Nzambe, Yeyeli, Azazia, Naati, Asaeli, Yerimoti, Yozabadi, Elieli, Yisimakia, Maati mpe Benaya bazalaki bakengeli ya misala na bokambami ya Konania mpe Shimei, ndeko na ye ya mobali. \v 14 Molevi Kore, mwana mobali ya Yimina, oyo azalaki mokengeli ekuke ya ngambo ya este azalaki na mokumba ya koyamba makabo oyo bato bazalaki kopesa epai ya Nzambe, wuta na mokano ya mitema na bango ; azalaki mpe na mokumba ya kokabola makabo oyo bazalaki kokongola mpo na Yawe mpe makabo ya bule. \v 15 Kati na bingumba ya Banganga-Nzambe, Kore asungamaki na Edeni, Minyamini, Jozue, Shemaya, Amaria mpe Shekania, mpo na kokabola biloko na boyengebene epai ya bandeko na bango Banganga-Nzambe kolanda masanga na bango ; bazalaki kosala bokeseni te kati na bato minene mpe bato mike. \v 16 Bazalaki kopesa kaka te na mibali oyo bakombo na bango ekomamaki, kobanda na mibu misato ya mbotama mpe komata, kasi bazalaki mpe kopesa na bato nyonso oyo bazalaki kokota na Tempelo ya Yawe mpo na kosala misala na bango ya mokolo na mokolo kolanda mikumba mpe masanga na bango. \v 17 Bapesaki na Banganga-Nzambe oyo bakombo na bango ekomamaki kolanda mabota na bango ya botata mpe na Balevi oyo bazalaki na mibu ya mbotama kobanda mibu tuku mibale mpe komata, kolanda mikumba mpe masanga na bango ; \v 18 bapesaki na bana mike nyonso, na basi, na bana mibali mpe na bana basi ya lisanga mobimba, ba-oyo bakombo na bango ekomamaki kati na buku ya milongo ya mbotama, pamba te bazalaki kokokisa na boyengebene mibeko ya libulisi mpo na kozala bule. \p \v 19 Lokola ndenge ezalaki mpo na Banganga-Nzambe, bakitani ya Aron, oyo bazalaki kovanda na bamboka ya zingazinga ya bingumba na bango, bato baponamaki na bakombo mpo na kokabola biloko epai ya bato nyonso kati na Banganga-Nzambe mpe epai ya Balevi nyonso oyo bakomamaki. \r (2Ba 18.5-7) \p \v 20 Ezali boye nde Ezekiasi asalaki kati na mokili na ye mobimba ya Yuda. Asalaki makambo ya malamu, ya sembo mpe ya solo na miso ya Yawe, Nzambe na ye. \v 21 Kati na nyonso oyo Ezekiasi asalaki, ezala mpo na mosala ya Ndako ya Nzambe to mpo na botosi mibeko mpe mitindo, azalaki koluka Nzambe na ye mpe kosala na motema na ye mobimba ; mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala. \c 32 \s1 Senakeribe abundisi Yuda \p \v 1 Sima na Ezekiasi kotalisa boyengebene na ye epai ya Nzambe, Senakeribe, mokonzi ya Asiri, ayaki kobundisa Yuda. Azingelaki bingumba batonga makasi, pamba te azalaki na posa ya kobotola yango. \v 2 Tango Ezekiasi amonaki ete Senakeribe ayei mpe azali na makanisi ya kobundisa Yelusalemi, \v 3 apesaki bakalaka mpe bakonzi ya basoda na ye likanisi ya kokanga bitima oyo ezalaki na libanda ya engumba. Bango nyonso bandimaki likanisi yango mpe basungaki ye. \v 4 Bato ebele basanganaki mpe bakangaki bitima nyonso elongo na mayi oyo ezalaki kotiola na se ya mabele. Balobaki : \pi1 — Mpo na nini bakonzi ya Asiri baya kokuta mayi ebele ? \p \v 5 Ezekiasi asalaki mosala makasi ya kobamba madusu ya mir mpe ya kobakisa bosanda ya bandako milayi ; atongaki mir mosusu na libanda, alendisaki mir ya engumba ya Davidi mpe asalaki lisusu makonga mpe banguba ebele. \v 6 Atiaki bakonzi ya basoda mpo ete bakamba bato mpe asangisaki bango liboso na ye, na esika oyo ezali pene ya ekuke ya engumba. Alendisaki bango na maloba oyo : \pi1 \v 7 — Bozala makasi mpe boyika mpiko ! Bobanga te mpe bolenga te liboso ya mokonzi ya Asiri mpe ya mampinga ya basoda ebele oyo bazali elongo na ye, pamba te Ye oyo azali elongo na biso azali na nguya monene koleka ye. \v 8 Mokonzi oyo ya Asiri azali kaka na nguya ya bomoto ; kasi biso, tozali elongo na Yawe, Nzambe na biso, oyo akosunga mpe akobundela biso bitumba. \p Boye bato batiaki elikya na maloba oyo Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, alobaki. \r (2Ba 18.17-35; Ez 36.2-22) \p \v 9 Sima na yango, wana Senakeribe, mokonzi ya Asiri, elongo na mampinga ya basoda na ye nyonso bazingelaki engumba Lakishi, atindaki bakonzi ya basoda na ye epai ya Ezekiasi, mokonzi ya Yuda, mpe epai ya bato nyonso ya Yuda, oyo bazalaki na Yelusalemi ; atindaki bango kopesa sango oyo : \pm \v 10 « Tala makambo oyo Senakeribe, mokonzi ya Asiri, alobi : Botie elikya na bino na nini mpo ete bowumela kati na Yelusalemi oyo bazingeli ? \v 11 Bozali komona te ete Ezekiasi azali kokosa bino mpo ete bokufa na nzala mpe na posa ya mayi tango azali koloba : ‹ Yawe, Nzambe na biso, akokangola biso na loboko ya mokonzi ya Asiri ? › \v 12 Boni, ezali kaka Ezekiasi wana te oyo alongolaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe bitumbelo ya banzambe tango alobaki na Yuda mpe na Yelusalemi : ‹ Bosengeli kogumbama liboso ya etumbelo moko kaka mpe kobonza mbeka ya malasi na likolo ya etumbelo yango ? › \v 13 Boyebi te makambo oyo ngai mpe batata na ngai tosalaki bato nyonso ya bikolo mosusu ? Boni, banzambe ya bikolo wana bakokaki solo kokangola mikili na bango na maboko na ngai ? \v 14 Kati na banzambe nyonso ya bikolo oyo batata na ngai babebisaki, nani akokaki kokangola bato na ye na maboko na ngai ? Bongo ndenge nini Nzambe na bino akoka solo kokangola bino na maboko na ngai ? \v 15 Sik’oyo, botika te ete Ezekiasi amema bino na libunga mpe akosa bino ndenge wana ; bondimela ye te ! Pamba te soki nzambe moko te ya ekolo songolo to ya mokili pakala alongaki kokangola bato na ye na loboko na ngai mpe na loboko ya batata na ngai, bongo nzambe na bino nde akolonga kokangola bino na loboko na ngai ? » \s1 Senakeribe afingi Yawe \r (2Ba 19.8-13; Ez 37.8-13) \p \v 16 Bakonzi ya basoda ya Senakeribe bakobaki koloba mabe na tina na Yawe Nzambe mpe Ezekiasi, mosali na Ye. \v 17 Senakeribe akomaki lisusu mikanda mpo na kofinga Yawe, Nzambe ya Isalaele. Tala maloba mabe oyo akomaki na tina na Ye : \pm « Ndenge banzambe ya bato ya bikolo mosusu balongaki te kokangola bato na bango, ndenge wana mpe nzambe ya Ezekiasi akolonga te kokangola bato na ye na maboko na ngai. » \p \v 18 Boye bagangaki na lokota ya Ebre mpo na kolengisa mpe kobangisa bato ya Yelusalemi oyo batelemaki likolo ya mir, mpo ete bakoka kobotola engumba. \v 19 Balobaki na tina na Nzambe ya Yelusalemi lokola bato oyo bazali kolobela nzambe moko ya bapagano, nzambe oyo bato basali na ndenge mpe na maboko na bango ! \s1 Nzambe akangoli Yelusalemi \r (2Ba 19.15, 35-37; Ez 37.15, 37-38) \p \v 20 Mokonzi Ezekiasi mpe mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, babondelaki Nzambe na tina na yango mpe bagangaki na ngambo ya Lola mpo na kosenga lisungi. \v 21 Yawe atindaki anjelu moko oyo abomaki basoda nyonso ya mpiko, bakonzi ya basoda elongo na bakambi kati molako ya mokonzi ya Asiri. Mokonzi ya Asiri azongaki na mokili na ye na soni makasi. Mpe tango akotaki na ndako ya nzambe na ye, bana na ye ya mibali babomaki ye na mopanga. \b \p \v 22 Ezalaki ndenge wana nde Yawe akangolaki Ezekiasi mpe bato ya Yelusalemi na maboko ya Senakeribe, mokonzi ya Asiri, mpe na maboko ya banguna mosusu ; mpe apesaki bango kimia na bangambo nyonso. \v 23 Bato ebele bamemaki na Yelusalemi makabo mpo na Yawe mpe bakado ya motuya mpo na Ezekiasi, mokonzi ya Yuda. Wuta tango wana, lokumu ya Ezekiasi emataki makasi na miso ya bikolo nyonso. \s1 Suka ya bokonzi ya Ezekiasi \r (2Ba 20.1-21) \p \v 24 Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Asambelaki Yawe ; mpe Yawe ayanolaki, apesaki ye elembo moko ya kokamwa. \v 25 Kasi mpo ete Ezekiasi akomaki na lolendo, atambolaki lisusu te na lolenge ya kondima bolamu ya Nzambe mpe ya kozongisela Ye matondi ; mpo na yango, Yawe asilikelaki ye, Yuda mpe Yelusalemi. \v 26 Bongo Ezekiasi amikitisaki, atikaki lolendo na ye mpe abongolaki motema. Bato ya Yelusalemi mpe basalaki lokola Ezekiasi. Boye, Yawe akweyiselaki bango kanda na Ye te na mikolo nyonso oyo Ezekiasi azalaki mokonzi. \p \v 27 Ezekiasi azalaki na bozwi ebele mpe na lokumu mingi, abombaki palata, wolo, mabanga ya talo, biloko ya solo kitoko, banguba mpe biloko nyonso ya talo. \v 28 Atongaki bibombelo ya ble, ya vino ya sika mpe ya mafuta ; atongaki lisusu mapango mpe bandako mpo na bibwele na ye. \v 29 Atongaki bingumba mpe akomaki na bibwele ebele : bantaba, bameme mpe bangombe. Nzambe apesaki ye bozwi mingi. \v 30 Ezali mpe Ezekiasi moto akangaki monoko ya etima ya Giyoni mpe alekisaki mayi na yango na se ya mabele, na ngambo ya weste ya engumba ya Davidi. Ezekiasi azalaki kolonga na misala na ye nyonso. \p \v 31 Kasi tango bakambi ya Babiloni batindelaki ye bakalaka mpo na kotuna ye na tina na elembo ya kokamwa oyo esalemaki kati na mokili, Nzambe atikaki Ezekiasi kosala na ndenge na ye moko mpo na komeka ye mpe koyeba mozindo ya motema na ye. \p \v 32 Makambo mosusu oyo etali Ezekiasi elongo na misala ya botosi na ye kati na makambo ya Nzambe, ekomama kati na emoniseli ya mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, mpe kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda mpe ya Isalaele. \p \v 33 Ezekiasi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na ngomba moke epai wapi bakunda ya bakitani ya Davidi ezali. Bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi bapesaki ye lokumu tango akufaki, mpe Manase, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 33 \s1 Manase, mokonzi ya Yuda \r (2Ba 21.1-10) \p \v 1 Manase azalaki na mibu zomi na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mitano na mitano na Yelusalemi. \v 2 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe na ndenge amekolaki misala ya nkele ya bikolo oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele. \v 3 Atongaki lisusu bisambelo ya likolo ya bangomba oyo Ezekiasi, tata na ye, abukaki ; atongaki mpe bitumbelo mpo na banzambe Bala mpe atelemisaki makonzi mpo na nzambe mwasi Ashera. Afukamelaki mpe agumbamelaki mampinga nyonso ya likolo. \v 4 Atongaki bitumbelo mpo na banzambe ya bapaya kati na Tempelo ya Yawe oyo, na tina na yango, Yawe alobaki : « Kombo na Ngai ekozala kati na Yelusalemi mpo na libela. » \p \v 5 Atongaki kati na mapango nyonso mibale ya Tempelo ya Yawe bitumbelo mpo na mampinga nyonso ya likolo. \v 6 Manase abonzaki na moto, lokola mbeka, bana na ye ya mibali, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji ; atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; na bongo, apelisaki kanda na Ye. \v 7 Atiaki kati na Tempelo ya Yawe nzambe ya ekeko oyo asalisaki ; nzokande, Nzambe alobaki na Davidi mpe na Salomo, mwana na ye ya mobali : \pi1 — Nakotia Kombo na Ngai mpo na libela kati na Tempelo oyo mpe kati na Yelusalemi oyo naponi kati na mabota nyonso ya Isalaele. \v 8 Nakolongola lisusu te makolo ya bato ya Isalaele na mokili oyo napesaki epai ya batata na bango, soki kaka bamipesi na kosala makambo nyonso oyo natindaki bango na tina na mibeko nyonso, mitindo mpe malako oyo napesaki bango na nzela ya Moyize. \p \v 9 Kasi Manase apengwisaki bato ya Yuda mpe ya Yelusalemi ; boye basalaki lisusu mabe koleka bikolo oyo Yawe abebisaki liboso ya bato ya Isalaele. \v 10 Yawe akebisaki Manase mpe bato na Ye, kasi baboyaki koyoka. \p \v 11 Bongo Yawe atindaki bakonzi ya basoda ya mokonzi ya Asiri kobundisa bango. Bakangaki Manase mpe bakotisaki na zolo na ye ebende oyo ezali lokola ndobo, bakangaki ye minyololo ya bronze mpe bamemaki ye na Babiloni. \v 12 Kati na pasi na ye, Manase abondelaki Yawe, Nzambe na ye, mpe amikitisaki makasi liboso ya Nzambe ya batata na ye. \v 13 Abondelaki Ye, mpe Yawe alembisaki motema, ayokaki libondeli na ye mpe azongisaki ye na Yelusalemi, kati na mokili na ye. Manase asosolaki ete Yawe kaka nde azali Nzambe. \p \v 14 Sima na makambo oyo nyonso, Manase atongaki mir, na libanda ya engumba ya Davidi, na ngambo ya weste ya etima ya Giyoni, na lubwaku oyo ekenda kino na ekuke ya Mbisi ; ezingelaki ngomba moke ya Ofeli. Asalaki yango molayi makasi, kobanda na se kino na likolo, mpe atiaki bakonzi ya basoda kati na bingumba nyonso ya Yuda, oyo batonga makasi. \v 15 Alongolaki kati na Tempelo ya Yawe banzambe ya bapaya mpe ya bikeko, abwakaki libanda ya engumba bitumbelo nyonso oyo atongaki na ngomba moke ya Tempelo mpe kati na Yelusalemi. \v 16 Bongo atongaki lisusu etumbelo ya Yawe, abonzaki na likolo na yango mbeka ya boyokani elongo na makabo ya kozongisa matondi epai ya Nzambe, mpe apesaki mitindo epai ya bato ya Yuda ete basalela Yawe, Nzambe ya Isalaele. \v 17 Atako bato bakobaki kotumba bambeka na bisambelo ya likolo ya bangomba, kasi bazalaki kosala yango kaka mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na bango. \r (2Ba 21.17-18) \p \v 18 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Manase, libondeli na ye epai ya Nzambe na ye mpe maloba oyo bamoni makambo balobaki na ye na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \v 19 Libondeli na ye mpe ndenge Yawe alimbisaki mabe na ye, masumu na ye nyonso, bozangi boyengebene na ye epai ya Nzambe, molongo ya bisika nyonso epai wapi atongaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe atelemisaki makonzi ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe oyo azalaki kofukamela liboso ete ayokisama soni, nyonso wana ekomama kati na mikanda ya Ozayi. \v 20 Manase akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi. Amoni, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Amoni, mokonzi ya Yuda \r (2Ba 21.19-24) \p \v 21 Amoni azalaki na mibu tuku mibale na mibale ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu mibale na Yelusalemi. \v 22 Amoni asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, ndenge kaka Manase, tata na ye, asalaki ; agumbamelaki banzambe nyonso ya bikeko oyo Manase, tata na ye, asalaki mpe abonzelaki yango bambeka. \v 23 Amoni amikitisaki te lokola Manase, tata na ye, liboso ya Yawe, kasi asalaki lisusu mabe koleka. \v 24 Bakalaka na ye basalelaki ye likita mpe babomaki ye kati na ndako na ye ya bokonzi. \v 25 Kasi bato ya mokili babomaki bato nyonso oyo basalelaki mokonzi Amoni likita ; mpe na esika na ye, bakomisaki Joziasi, mwana na ye ya mobali, mokonzi. \c 34 \s1 Joziasi, mokonzi ya Yuda \r (2Ba 22.1-2) \p \v 1 Joziasi azalaki na mibu mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku misato na moko na Yelusalemi. \v 2 Asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe mpe alandaki banzela oyo Davidi, tata na ye, atambolaki na yango : apengwaki na yango te, ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali. \r (2Ba 23.4-20) \p \v 3 Na mobu ya mwambe ya bokonzi na ye, lokola azalaki nanu elenge, akomaki koluka Nzambe ya Davidi, tata na ye ; bongo na mobu ya zomi na mibale, akomaki kopetola Yuda mpe Yelusalemi na kopekisa bato kokende na bisambelo ya likolo ya bangomba, na kobuka makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto. \v 4 Babukaki liboso na ye bitumbelo ya banzambe Bala, bakweyisaki mbala moko bitumbelo malasi oyo ezalaki na likolo na yango, abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera, bikeko ya banzambe basala na nzete mpe na bibende oyo banyangwisa na moto ; akomisaki yango putulu mpe asopaki putulu yango na likolo ya bakunda ya bato oyo babonzelaki banzambe yango bambeka. \v 5 Atumbaki mikuwa ya banganga-nzambe ya bikeko na likolo ya bitumbelo na yango. Ezalaki ndenge wana nde apetolaki Yuda mpe Yelusalemi. \v 6 Abukaki bitumbelo kati na bingumba ya Manase, ya Efrayimi, ya Simeoni kino na Nefitali mpe na bamboka na yango ya zingazinga. \v 7 Abukaki makonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera elongo na bikeko ya banzambe mpe akomisaki yango putulu. Akweyisaki lisusu bitumbelo malasi nyonso kati na mokili mobimba ya Isalaele. Bongo, azongaki na Yelusalemi. \r (2Ba 22.3-7) \p \v 8 Tango Joziasi akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, mpo na kopetola mokili mpe Tempelo, atindaki Shafani, mwana mobali ya Atsalia ; Maaseya, moyangeli ya engumba ; mpe Yoa, mwana mobali ya Yoakazi mpe mobombi mikanda, mpo na kobongisa Tempelo ya Yawe, Nzambe na ye. \v 9 Bakendeki epai ya Ilikia, mokonzi ya Banganga-Nzambe, mpe bapesaki ye mbongo oyo bazwaki na Tempelo ya Nzambe, mbongo oyo Balevi oyo bazalaki kokengela ekotelo bakongolaki lokola makabo mpo na Tempelo na maboko ya bato ya Manase, ya Efrayimi, ya batikali ya Isalaele, ya bato nyonso ya Yuda, ya Benjame mpe ya bavandi ya Yelusalemi. \v 10 Bapesaki mbongo yango na maboko ya batambolisi misala ya Tempelo ya Yawe. Bato yango bafutaki basali oyo bazalaki kobongisa mpe kolendisa Tempelo yango ; \v 11 bapesaki lisusu epai ya basharipantie mpe batongi Tempelo mpo ete basomba mabanga bakata elongo na mabaya mpo na motondo, mpe mpo ete batonga bandako mosusu oyo bakonzi ya Yuda bazalaki kobongisa te tango ezalaki kobeba. \p \v 12 Bato yango basalaki mosala na bango na boyengebene mpe na bokambami ya Balevi Yaati mpe Abidiasi, bana mibali ya Merari. Zakari mpe Meshulami, bana mibali ya Keati, nde bazalaki kokengela mosala na bango. \v 13 Balevi yango bayebaki mpe kobeta mindule ; bazalaki kokengela bato oyo bazalaki komema biloko ya mosala mpe kokamba ba-oyo nyonso bazalaki kosala misala na bisika nyonso oyo mosala ezalaki kosalema. Balevi mosusu bazalaki bakomi mikanda, balakisi ya Mobeko mpe bakengeli bikuke. \r (2Ba 22.8-20) \p \v 14 Tango bazalaki kobimisa mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe, Nganga-Nzambe Ilikia amonaki buku ya Mobeko ya Yawe, oyo epesamaki na nzela ya Moyize. \v 15 Ilikia alobaki na Shafani, mokomi mikanda : \pi1 — Namoni buku ya Mobeko kati na Tempelo ya Yawe ! \p Mpe apesaki buku yango epai ya Shafani. \p \v 16 Shafani azwaki buku yango, amemaki yango epai ya mokonzi mpe ayebisaki ye : \pi1 — Basali na yo bazali kosala makambo nyonso oyo otindaki bango. \v 17 Bapesi mbongo oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe epai ya batambolisi misala mpe epai ya bato oyo bazali kosala misala. \p \v 18 Mokomi mikanda, Shafani, alobaki na mokonzi : \pi1 — Nganga-Nzambe Ilikia apesi ngai buku moko. \p Mpe Shafani atangaki buku yango liboso ya mokonzi. \p \v 19 Tango mokonzi ayokaki maloba ya Mobeko, apasolaki bilamba na ye, \v 20 apesaki mitindo oyo epai ya Ilikia, epai ya Ayikami, mwana mobali ya Shafani ; epai ya Abidoni, mwana mobali ya Mishe ; epai ya Shafani, mokomi mikanda, mpe epai ya Asaya, moko kati na bakalaka ya mokonzi : \pi1 \v 21 — Bokende kotuna toli ya Yawe mpo na ngai mpe mpo na batikali ya Isalaele mpe ya Yuda ; botuna na tina na makambo oyo ekomama kati na buku oyo ewuti komonana, pamba te kanda ya Yawe, oyo ekweyeli biso ezali makasi mpo ete batata na biso batosaki te Liloba na Yawe mpe basalaki te kolanda nyonso oyo ekomama kati na buku oyo. \p \v 22 Ilikia elongo na bato oyo mokonzi aponaki bakendeki epai ya mwasi mosakoli Ulida, mwasi ya Shalumi, mwana mobali ya Tokeati, mwana mobali ya Asira, mobombi bilamba ya Tempelo. Ulida azalaki kovanda na Yelusalemi, na etuka ya sika. Balobaki na ye ndenge bayokanaki. \v 23 Ulida alobaki na bango : \pi1 — Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Boloba na tata oyo atindi bino epai na Ngai : \v 24 ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Nakobengisa pasi makasi na esika oyo mpe na bavandi na yango kolanda bilakeli mabe nyonso oyo ekomama kati na buku oyo bawuti kotanga liboso ya mokonzi ya Yuda. › \v 25 Lokola basundolaki Ngai mpe batumbaki mbeka ya malasi mpo na banzambe mosusu kino kotumbola kanda na Ngai na nzela ya biloko oyo maboko na bango esilaki kosala, kanda na Ngai ekopela makasi na esika oyo, mpe ekokita te. \v 26 Kasi boloba na mokonzi ya Yuda oyo atindi bino kotuna toli ya Yawe : ‹ Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi na tina na maloba oyo oyokaki : \v 27 Lokola motema na yo etutami, lokola omikitisi liboso ya Nzambe sima na yo koyoka maloba na Ye mpo na kotelemela esika oyo mpe bavandi na yango, lokola omikitisi liboso na Ngai, lokola opasoli bilamba na yo mpe oleli liboso na Ngai, Ngai mpe nayoki, › elobi Yawe, \v 28 ‹ nakosala ete okende kokutana na bakoko na yo, oyo bakufa ; mpe okokundama na kimia kati na moko na bakunda na yo. Na bongo, miso na yo ekomona te pasi nyonso oyo nakotindela esika oyo mpe bavandi na yango. › » \p Batindami bakomisaki eyano oyo epai ya mokonzi. \s1 Boyeisi sika ya Boyokani elongo na Nzambe \r (2Ba 23.1-3) \p \v 29 Mokonzi Joziasi abengisaki bampaka nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi. \v 30 Bongo akendeki na Tempelo ya Yawe elongo na bato nyonso ya Yuda, bavandi nyonso ya Yelusalemi, Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso, kobanda na oyo aleki na lokumu kino na oyo aleki na se. Mokonzi atangelaki bango makomi nyonso ya buku ya Boyokani oyo emonanaki kati na Tempelo ya Yawe. \v 31 Mokonzi atelemaki na etemelo na ye ya kolobela mpe asalaki boyokani oyo liboso ya Yawe : \pi1 — Nalapi ndayi ete nakolanda Yawe, nakotosa mibeko, mitindo mpe malako na Ye, na motema mpe na elimo na ngai mobimba ; mpe nakotosa maloba ya boyokani, oyo ekomama kati na buku oyo. \p \v 32 Mokonzi alapisaki ndayi yango bato nyonso oyo bazalaki na Yelusalemi mpe kati na etuka ya Benjame. Mpe bavandi ya Yelusalemi batambolaki kolanda boyokani ya Nzambe, Nzambe ya batata na bango. \b \p \v 33 Joziasi alongolaki banzambe nyonso ya bikeko ya nkele kati na bituka nyonso ya bana ya Isalaele. Apesaki mitindo na bato nyonso oyo bazalaki kati na Isalaele ete basalela Yawe, Nzambe na bango. Na bongo, na mikolo nyonso ya bomoi ya Joziasi, bapengwaki te liboso ya Yawe, Nzambe ya batata na bango. \c 35 \s1 Joziasi asepeli feti ya Pasika \r (2Ba 23.21-23) \p \v 1 Joziasi asepelaki feti ya Pasika mpo na lokumu ya Yawe kati na Yelusalemi ; mpe na mokolo ya zomi na minei ya sanza ya liboso, bakataki kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika. \v 2 Atiaki Banganga-Nzambe mpo ete bakoba mosala na bango mpe alendisaki bango na mosala ya Tempelo ya Yawe. \v 3 Alobaki na Balevi oyo babulisamaki mpo na Yawe mpe bazalaki na mokumba ya koteya Isalaele mobimba : \pi1 — Botia Sanduku ya bule kati na Tempelo oyo Salomo, mwana mobali ya Davidi, mokonzi ya Isalaele, atongaki ; ezali lisusu ya komema na mapeka na bino te. Sik’oyo, bosalela Yawe, Nzambe na bino, mpe Isalaele, bato na Ye. \v 4 Bomibongisa kolanda mabota mpe masanga na bino ya mosala, kolanda mitindo oyo Davidi, mokonzi ya Isalaele, mpe Salomo, mwana na ye ya mobali, bakomaki. \v 5 Bowumela na bisika na bino ya mosala kati na Esika ya bule : lisanga moko ya Balevi mpo na libota moko na moko ya bandeko na bino, bato ya ekolo na bino. \v 6 Bokata kingo ya mpate mpo na mbeka ya Pasika, bomibulisa mpe bobongisa mpate yango ya Pasika mpo na bandeko na bino oyo bozali na bango ekolo moko, kolanda mitindo ya Yawe na nzela ya Moyize. \p \v 7 Joziasi azwaki kati na bibwele na ye moko mokonzi bana meme mpe bana ntaba nkoto tuku misato mpe bangombe nkoto misato, mpo na bato ya Isalaele, nkoto tuku misato oyo bazalaki wana mpo ete bakoka kobonza yango lokola mbeka ya Pasika. \v 8 Bakalaka na ye mpe bapesaki wuta na mokano ya mitema na bango, epai ya bato, epai ya Banganga-Nzambe mpe epai ya Balevi. Ilikia, Zakari mpe Yeyeli, oyo bazalaki bakambi ya misala kati na Tempelo ya Nzambe, bapesaki epai ya Banganga-Nzambe lokola mbeka ya Pasika bana meme nkoto mibale na nkama motoba mpe bangombe nkama misato. \v 9 Konania elongo na bandeko na ye ya mibali : Shemaya, Netaneeli, Ashabia, Yeyeli mpe Yozabadi oyo bakambi ya Balevi, bapesaki bameme nkoto mitano mpe bangombe nkama mitano epai ya Balevi lokola mbeka ya Pasika. \p \v 10 Tala ndenge babongisaki losambo : Banganga-Nzambe batelemaki na esika na bango ya mosala, mpe Balevi bazalaki kati na masanga na bango, kolanda mitindo ya mokonzi. \v 11 Bato babonzaki bana meme mpe bana ntaba lokola mbeka ya Pasika, mpe Balevi bazalaki kopesa makila na yango epai ya Banganga-Nzambe mpo ete basopa yango na likolo ya etumbelo, wana Balevi bazalaki kopapa mbeka \v 12 mpe kotia pembeni biteni ya kobonza lokola mbeka ya kotumba, mpo na kopesa yango epai ya bato kolanda masanga na bango mpo ete babonza yango epai na Yawe, kolanda ndenge ekomama kati na buku ya Moyize. Basalaki mpe ndenge wana mpo na bangombe. \v 13 Kolanda ndenge mobeko ezalaki kotinda, batumbaki na moto meme oyo ebonzamaki lokola mbeka ya Pasika mpe balambaki makabo mosusu ya bule na nzungu, na kikalungu mpe na basani ; mpe bapesaki yango na lombangu epai ya bato nyonso. \v 14 Sima na yango, Balevi babongisaki mbeka ya Pasika mpo na bango moko mpe mpo na Banganga-Nzambe ; pamba te Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron, bazalaki kosala kino na butu mosala ya kobonza bambeka ya kotumba mpe mafuta ya banyama. Yango wana Balevi bazalaki kobongisa mbeka ya Pasika mpo na bango moko mpe mpo na Banganga-Nzambe, bana mibali ya Aron. \p \v 15 Babeti mindule, bana mibali ya Azafi, bazalaki na esika na bango ya mosala kolanda mitindo ya Davidi, ya Azafi, ya Emani mpe ya Yedutuni, mosakoli ya mokonzi. Bakengeli bikuke mpe bazalaki na bisika na bango ya mosala ; batikalaki kozala mosika na yango te, pamba te bandeko na bango, Balevi, bazalaki mpe kobongisela bango biloko. \v 16 Ezalaki ndenge wana nde misala nyonso ebongisamaki mokolo wana mpo na kosepela feti ya Pasika mpe kobonza mbeka ya kotumba na likolo ya etumbelo ya Yawe, kolanda mitindo ya mokonzi Joziasi. \p \v 17 Bana ya Isalaele oyo bazalaki wana basepelaki na tango wana feti ya Pasika mpe feti ya Mapa ezanga levire, mikolo sambo. \r (2Ba 23.22-23) \p \v 18 Wuta na tango ya mosakoli Samuele, feti ya Pasika ya lolenge wana etikalaki nanu kosalema te kati na Isalaele. Mpe kati na bakonzi ya Isalaele, moko te asepelaki feti ya Pasika lokola Pasika oyo Joziasi asepelaki elongo na Banganga-Nzambe, Balevi, bato nyonso ya Yuda mpe ya Isalaele oyo bazalaki kuna elongo na bavandi ya Yelusalemi. \v 19 Ezalaki na mobu ya zomi na mwambe ya bokonzi ya Joziasi nde basepelaki Pasika yango. \s1 Kufa ya Joziasi \r (2Ba 23.28-30) \p \v 20 Sima na makambo oyo nyonso mpe sima na Joziasi kobongisa Tempelo ya Yawe, Neko, mokonzi ya Ejipito, akendeki kobundisa Karikemishi, na ebale Efrate ; mpe Joziasi akendeki kokutana na ye mpo na kokanga ye nzela. \v 21 Neko atindelaki ye bamemi sango mpo na koloba na ye : \pi1 — Mokonzi ya Yuda, likambo nini kati ya yo mpe ngai ? Na mokolo ya lelo, nayei na ngai te mpo na kobundisa yo ; nayei nde kobundisa mokonzi mosusu. Nzambe alobi na ngai ete nasala likambo yango na lombangu. Keba ete otombokela Nzambe oyo azali elongo na ngai, soki te akobebisa yo. \p \v 22 Kasi Joziasi aboyaki kotika ye, mpe lokola ayokaki te makambo oyo Neko ayebisaki ye kowuta na monoko ya Nzambe, Joziasi amibongolaki mpo na kobundisa Neko na lubwaku ya Megido. \p \v 23 Kati na bitumba, basoda oyo babundaka na batolotolo babetaki mokonzi Joziasi, mpe ye alobaki na basoda na ye : \pi1 — Bolongola ngai awa, pamba te nazoki makasi. \p \v 24 Basoda na ye balongolaki ye na shar oyo azalaki kobunda na yango, batiaki ye na shar na ye mosusu mpe bamemaki ye na Yelusalemi epai wapi akufaki. Bakundaki ye kati na bakunda ya batata na ye. Bato nyonso ya Yuda mpe ya Yelusalemi basalelaki Joziasi matanga. \v 25 Jeremi asalaki nzembo ya mawa mpo na Joziasi. Bayembi nyonso ya mibali mpe ya basi bayembelaki Joziasi banzembo ya mawa kino na mokolo ya lelo mpe bakomisaki likambo yango mobeko kati na Isalaele. Banzembo yango ekomama kati na buku ya banzembo ya mawa. \p \v 26 Makambo mpe misala mosusu ya Joziasi, elongo na misala ya botosi na ye kati na makambo ya Yawe, kolanda oyo ekomama kati na Mobeko ya Yawe, \v 27 misala na ye, kobanda na ebandeli kino na suka, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda. \c 36 \s1 Yoakazi, mokonzi ya Yuda \p \v 1 Bato ya mokili bazwaki Yoakazi, mwana mobali ya Joziasi, mpe bakomisaki ye mokonzi, na Yelusalemi, mpo na kokitana na tata na ye. \r (2Ba 23.31-34) \p \v 2 Yoakazi azalaki na mibu tuku mibale na misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato na Yelusalemi. \v 3 Mokonzi ya Ejipito alongolaki ye na bokonzi kati na Yelusalemi mpe asengaki na makasi ete mokili ya Yuda ekoma kofuta mpako mpo na mokonzi : bakilo nkoto misato na nkama minei ya palata mpe ya wolo. \v 4 Mokonzi ya Ejipito akomisaki Eliakimi, ndeko mobali ya Yoakazi, mokonzi ya Yelusalemi mpe ya Yuda ; abongolaki kombo na ye mpe akomisaki yango « Yeoyakimi. » Kasi Neko akangaki Yoakazi, ndeko mobali ya Yeoyakimi, mpe amemaki ye na Ejipito. \s1 Yeoyakimi, mokonzi ya Yuda \r (2Ba 23.36-37) \p \v 5 Yeoyakimi azalaki na mibu tuku mibale na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye. \v 6 Nabukodonozori, mokonzi ya Babiloni, abundisaki ye mpe akangaki ye minyololo ya bronze mpo na komema ye na Babiloni. \v 7 Nabukodonozori amemaki mpe na Babiloni ndambo ya biloko ya Tempelo ya Yawe mpe atiaki yango kati na ndako na ye ya bokonzi. \p \v 8 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Yeoyakimi, misala na ye ya nkele mpe makambo oyo ekweyelaki ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele mpe ya Yuda. Yeoyakini, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Yeoyakini, mokonzi ya Yuda \r (2Ba 24.8-17) \p \v 9 Yeoyakini azalaki na mibu zomi na mwambe ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki basanza misato mpe mikolo zomi na Yelusalemi. Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe. \p \v 10 Na suka ya mobu, mokonzi Nabukodonozori abengisaki ye mpe amemaki ye na Babiloni elongo na biloko ya motuya ya Tempelo ya Yawe ; akomisaki Sedesiasi, ndeko mobali ya Yeoyakini, mokonzi ya Yuda mpe ya Yelusalemi. \s1 Sedesiasi, mokonzi ya Yuda \r (2Ba 24.18-20) \p \v 11 Sedesiasi azalaki na mibu tuku mibale na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na moko na Yelusalemi. \v 12 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, Nzambe na ye, mpe amikitisaki te liboso ya mosakoli Jeremi oyo azalaki koloba na Kombo na Yawe. \v 13 Lisusu, atombokelaki mokonzi Nabukodonozori oyo alapisaki ye ndayi na Kombo ya Nzambe. Na esika ete azonga epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, akomaki moto makasi mpe akomisaki motema na ye libanga. \v 14 Bakonzi nyonso ya Banganga-Nzambe mpe bato bakomaki lisusu kosala mabe koleka, balandaki misala nyonso ya nkele ya bikolo ya bapaya mpe babebisaki bosantu ya Tempelo ya Yawe oyo Ye moko Yawe abulisaki na Yelusalemi. \p \v 15 Yawe, Nzambe ya batata na bango, atindelaki bango, mbala na mbala mpe na ngonga malamu, makebisi na nzela ya bamemi sango na Ye, pamba te azalaki na posa ya kobatela bato na Ye mpe Tempelo na Ye. \v 16 Kasi bato ya Isalaele bazalaki kotiola bamemi sango ya Nzambe, bazalaki komona pamba makebisi na Ye mpe bazalaki kowolola basakoli na Ye kino Yawe kosilikela bato na Ye makasi ; mpe bakokaki kosala eloko moko te mpo na komibikisa liboso ya kanda makasi ya Yawe. \r (2Ba 25.1-21) \p \v 17 Boye, mpo na kobebisa bango, Yawe atindaki mokonzi ya bato ya Babiloni, oyo abomaki na mopanga bilenge na bango kati na esika na bango ya bule ; abikisaki te ezala elenge mobali, elenge mwasi, mokolo to mobange. Nzambe akabaki nyonso na maboko ya Nabukodonozori. \v 18 Nabukodonozori amemaki na Babiloni biloko nyonso ya Tempelo ya Nzambe, ya minene to ya mike, bozwi ya Tempelo ya Yawe, bozwi ya mokonzi mpe ya bakalaka na ye. \v 19 Batumbaki na moto Tempelo ya Nzambe, babukaki mir ya Yelusalemi, batumbaki na moto bandako na yango ya kitoko mpe babebisaki biloko nyonso ya motuya. \v 20 Nabukodonozori amemaki na Babiloni bato oyo babikaki na mopanga, akomisaki bango bawumbu na ye mpe ya bana na ye ya mibali kino na tango mokili ya Persi ezwaki bokonzi. \b \p \v 21 Ezalaki ndenge wana nde Liloba na Yawe ekokisamaki, liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi : « Mokili ekozwa bopemi na mikolo nyonso oyo bakosundola yango, ekosepela na basaba na yango kino tango mibu tuku sambo ekokoka. » \s1 Ndingisa ya kotonga Tempelo ya Nzambe \p \v 22 Na mobu ya liboso ya Sirisi, mokonzi ya Persi, Yawe alamusaki molimo ya Sirisi, mokonzi ya Persi, mpo na kokokisa liloba oyo alobaki na nzela ya mosakoli Jeremi mpo ete asakola mpe akoma boye kati na mokili na ye mobimba : \v 23 « Tala makambo oyo Sirisi, mokonzi ya Persi, alobi : ‹ Yawe, Nzambe ya Likolo, apesi ngai babokonzi nyonso ya mabele mpe mokumba ya kotongela Ye Tempelo, na Yelusalemi kati na Yuda. Tika ete moto nyonso oyo, kati na bino, azali na molongo ya bato ya Yawe akende ; pamba te Yawe, Nzambe na ye, azali elongo na ye ! › »