\id 1SA Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h 1 Samuele \toc1 1 Samuele \toc2 1 Samuele \toc3 1Sa \mt1 1 Samuele \c 1 \s1 Kobotama ya Samuele \p \v 1 Kati na engumba Ramataimi-Tsofimi ya etuka ya bangomba ya Efrayimi, ezalaki na mobali moko ; kombo na ye ezalaki « Elikana. » Azalaki mwana mobali ya Yeroami, mwana mobali ya Eliwu, mwana mobali ya Towu, mwana mobali ya Tsufi, moto ya Efrayimi. \v 2 Elikana azalaki na basi mibale : moko, kombo na ye ezalaki « Penina ; » mosusu, « Ana. » Penina azalaki na bana, kasi Ana azalaki na mwana te. \v 3 Mibu nyonso, Elikana azalaki kolongwa na engumba na ye mpo na kokende kogumbamela Yawe, Mokonzi ya mampinga, mpe kobonzela Ye mbeka na Silo epai wapi Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki Banganga-Nzambe. \v 4 Bongo, soki mokolo na ye ya kobonza mbeka ekoki, Elikana azalaki na momesano ya kopesa biteni ya mbeka na ye epai ya Penina, mwasi na ye, mpe epai ya bana nyonso ya Penina, ya mibali mpe ya basi. \v 5 Kasi epai ya Ana, azalaki kopesa biteni yango mbala mibale, pamba te azalaki kolinga ye, atako Yawe akangaki ye mabota. \v 6 Nzokande, lokola Yawe akangaki ye mabota, mbanda na ye azalaki kaka kotiola ye tango nyonso mpo ete atomboka. \v 7 Elikana azalaki kosala bongo mibu nyonso. Mpe tango nyonso Ana azalaki kokende na Ndako ya Yawe, mbanda na ye, Penina, azalaki kotika te kotiola ye. Bongo, lokola Ana azalaki kolela mpe azalaki kolia te, \v 8 Elikana, mobali na ye, atunaki ye : « Ana, mpo na nini ozali kolela ? Mpo na nini ozali kolia te ? Mpo na nini ozali na mawa boye ? Boni, ngai nazali na motuya te mpo na yo koleka bana mibali zomi ? » \s1 Libondeli ya Ana \p \v 9 Mokolo moko, sima na bango kolia mpe komela na Silo, Ana atelemaki mpe akendeki na Ndako ya Yawe. Ezalaki na ngonga oyo Nganga-Nzambe Eli avandaki na kiti, pembeni ya ekuke ya Ndako ya Yawe. \v 10 Wana Ana azalaki na pasi na motema, abondelaki Yawe na kolela mingi. \v 11 Bongo apesaki elaka, alobaki : « Eh Yawe, Mokonzi ya mampinga, soki kaka otali pasi ya mwasi mowumbu na Yo, soki okanisi ngai mpe obosani te mwasi mosali na Yo, kasi opesi ye mwana mobali, nakokaba ye epai na Yawe mpo na mikolo nyonso ya bomoi na ye, mpe bakotikala kokata suki ya moto na ye te. » \p \v 12 Lokola azalaki kobenda libondeli na ye molayi liboso ya Yawe, Eli azalaki kotala malamu-malamu monoko na ye. \v 13 Mpe wana Ana azalaki kobondela na se ya motema, bibebu na ye ezalaki koningana, kasi mongongo ezalaki koyokana te. Mpe Eli akanisaki ete Ana alangwe masanga. \v 14 Eli alobaki na Ana : \pi1 — Kino tango nini okozala na milangwa ? Longola milangwa na yo. \p \v 15 Ana azongisaki : \pi1 — Te, nkolo na ngai ! Nalangwe te, nameli ata vino to masanga makasi te. Kasi nazali na mawa mingi ; nazalaki kosopa motema na ngai epai na Yawe. \v 16 Kozwa mwasi mowumbu na yo te lokola mwasi ya mobulu, pamba te ezali mawa ya motema na ngai mpe monene ya pasi na ngai nde etindi ngai kobondela kino tango oyo. \p \v 17 Eli azongisaki : \pi1 — Kende na kimia, mpe tika ete Nzambe ya Isalaele apesa yo, oyo osengi Ye. \p \v 18 Ana alobaki : \pi1 — Tika ete mwasi mowumbu na yo azwa ngolu na miso na yo. \p Boye Ana azongaki, aliaki mpe elongi na ye ezalaki lisusu ya mawa te. \p \v 19 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Elikana mpe libota na ye balamukaki mpe bagumbamelaki Yawe ; sima na yango, bazongaki epai na bango, na Rama. \s1 Mbotama ya Samuele \p Elikana asangisaki nzoto na Ana, mwasi na ye, mpe Yawe akaniselaki Ana. \v 20 Boye Ana akomaki na zemi mpe, sima na mwa mikolo, abotaki mwana mobali. Apesaki ye kombo « Samuele, » pamba te alobaki : « Mpo ete nasengaki ye epai na Yawe. » \b \p \v 21 Na mobu oyo elandaki, Elikana, elongo na libota na ye mobimba, akendeki lisusu kobonzela Yawe mbeka ya mibu nyonso mpe kokokisa elaka na ye. \v 22 Kasi lokola Ana akendeki te, alobaki na mobali na ye : \pi1 — Soki nakati mwana komela mabele nde nakomema ye mpo na kotalisa ye epai na Yawe ; bongo akovanda kuna mpo na libela. \p \v 23 Elikana, mobali na ye, alobaki : \pi1 — Oyo omoni ete ezali malamu, sala yango. Vanda awa kino okokata mwana komela mabele. Tika ete Yawe asunga yo mpo ete okokisa kaka elaka na yo. \p Boye Ana atikalaki na ndako, akobaki komelisa mwana mabele kino tango akataki ye komela. \p \v 24 Sima na ye kokata mwana komela mabele, Ana akamataki ye, ndenge kaka azalaki nanu moke bongo ; amemaki ye na Ndako ya Yawe, na Silo, elongo na ngombe ya mobali ya mibu misato, bakilo zomi ya farine, mpe mbeki moko ya vino. \v 25 Sima na bango koboma ngombe mpo na kobonza yango lokola mbeka, bamemaki mwana epai ya Eli. \v 26 Ana alobaki na ye : \pi1 — Limbisa ngai, nkolo na ngai ; nazali mwasi oyo atelemaki awa pembeni na yo mpo na kobondela Yawe. \v 27 Nazalaki kobondela mpo ete nazwa mwana oyo, mpe Yawe asilaki kopesa ngai oyo nasengaki Ye. \v 28 Boye, ngai mpe nakabi ye sik’oyo epai na Yawe : bomoi na ye mobimba, akozala ya Yawe. \p Sima na yango, agumbamelaki Yawe na esika yango. \c 2 \s1 Losambo ya Ana \p \v 1 Ana asambelaki na maloba oyo : \q1 Motema na ngai ezali kosepela mpo na Yawe \q2 mpo ete alendisi bomoi na ngai. \q1 Wana nazali na esengo mpo ete okangoli ngai, \q2 monoko na ngai ekotelemela banguna na ngai. \q1 \v 2 Moko te azali bule lokola Yawe ; \q2 moko te, bobele Yo. \q2 Libanga moko te ezali lokola Nzambe na biso. \q1 \v 3 Bolobaloba maloba ebele te ya lolendo, \q2 mpe tika ete lofundu ebima na monoko na bino te, \q1 pamba te Yawe azali Nzambe oyo ayebi nyonso \q2 mpe asambisaka misala nyonso ya bato. \q1 \v 4 Tolotolo ya bilombe ebukani, \q2 kasi bato na bolembu bazwi makasi. \q1 \v 5 Bato oyo bazalaki na bozwi ebele \q2 bakomi koluka mosala mpo na bilei, \q1 kasi ba-oyo bazalaki kokelela batiki kosala. \q2 Mwasi oyo abotaki te akobota mbala sambo, \q2 kasi mwasi oyo abotaki bana ebele akobota lisusu te. \q1 \v 6 Yawe abomaka mpe apesaka bomoi, \q2 akitisaka bato na mokili ya bakufi mpe asekwisaka. \q1 \v 7 Yawe akomisaka moto mobola, \q2 mpe akomisaka moto mozwi ; \q2 akitisaka mpe atombolaka. \q1 \v 8 Alongolaka mobola na putulu, \q2 mpe abimisaka na fulu moto oyo azanga ; \q1 mpo ete avandisa bango esika moko na bato ya lokumu \q2 mpe apesa bango kiti ya lokumu lokola libula. \q1 Pamba te miboko ya mabele ezali ya Yawe, \q2 mpe ezali na likolo na yango nde atia mokili. \q1 \v 9 Yawe akobatelaka makolo ya babulami na Ye, \q2 kasi bato mabe bakobunga kati na molili. \b \q1 Moto akotikala kolonga te na makasi na ye moko. \q1 \v 10 Bato oyo batiaka tembe na Yawe bakopanzana, \q2 pamba te akokweyisela bango kake wuta na likolo. \q1 Yawe akosambisa mokili mobimba, \q2 akopesa mokonzi na yango nguya \q2 mpe akobakisa makasi ya mopakolami na Ye. \p \v 11 Sima na yango, Elikana azongaki na ndako na ye, na Rama ; kasi mwana atikalaki mpo na kosalela Yawe na bokambami ya Nganga-Nzambe Eli. \s1 Mabe ya bana mibali ya Eli \p \v 12 Bana mibali ya Eli bazalaki kilikili, bayebaki Yawe te. \v 13 Tala ndenge nini Banganga-Nzambe oyo bazalaki kosala na miso ya bato : tango nyonso moto moko azalaki koya kobonza mbeka, mosali ya Nganga-Nzambe azalaki koya na ngonga ya kotumba mbeka yango, azalaki kosimba kanya ya misapi misato na loboko na ye, \v 14 azalaki kokotisa yango na sani, na nzungu, na kikalungu to na mbeki ; mpe azalaki kokamata, mpo na Nganga-Nzambe, eteni nyonso ya nyama oyo ezalaki kokangama na kanya. Ezali ndenge wana nde bana mibali ya Eli bazalaki kosala epai ya bana nyonso ya Isalaele oyo bazalaki kokende kuna na Silo. \v 15 Kutu, liboso ete mafuta ya mbeka etumbama, mosali ya Nganga-Nzambe azalaki koya koloba na moto oyo azalaki kobonza mbeka : « Longolaka libela eteni ya Nganga-Nzambe, pamba te akondima te kozwa na maboko na yo nyama oyo yo moko otumbi ; kasi akondima kaka nyama ya mobesu. » \p \v 16 Bongo soki moto yango azongiseli mosali ya Nganga-Nzambe : « Tika ete mafuta etumbama nanu, bongo okozwa, na sima, eteni oyo olingi, » mosali azalaki kozongisa : « Te ! Pesa ngai yango nde sik’oyo, noki te nakozwa yango na makasi. » \p \v 17 Lisumu oyo ya bana mibali ya Eli ezalaki monene na miso ya Yawe, pamba te bazalaki kozwa na limemia te mbeka oyo ebonzami mpo na Yawe. \s1 Samuele mpe baboti na ye \p \v 18 Kasi Samuele azalaki kosala mosala na ye liboso ya Yawe. Elenge mobali Samuele azalaki kolata efode ya lino. \v 19 Mibu nyonso, mama na ye azalaki kotongela ye nzambala ya moke, mpe azalaki komemela ye yango tango nyonso azalaki kokende elongo na mobali na ye mpo na kobonza mbeka. \v 20 Eli azalaki kopambola Elikana mpe mwasi na ye na maloba oyo : « Tika ete Yawe apesa yo bana na nzela ya mwasi oyo, mpo na kozwa esika ya mwana oyo asengaki na mabondeli mpe abonzaki epai na Yawe ! » \p Sima na yango, bazongaki epai na bango. \v 21 Yawe asalelaki Ana ngolu, mpe Ana azwaki lisusu bazemi, abotaki bana mibali misato mpe bana basi mibale. Nzokande elenge mobali Samuele azalaki kokola liboso ya Yawe. \s1 Eli mpe bana na ye ya mibali \p \v 22 Eli akomaki mobange makasi, mpe azalaki koyoka makambo nyonso oyo bana na ye ya mibali bazalaki kosala epai ya bana nyonso ya Isalaele ; azalaki mpe koyoka ete bazalaki kosangisa nzoto na basi oyo bazalaki kosala na ekotelo ya Ndako ya kapo ya Bokutani. \v 23 Alobaki na bango : « Mpo na nini bozali kosala makambo mabe boye ? Nazali koyoka bato nyonso kolobela yango. \v 24 Te, bana na ngai ! Sango oyo nazali koyoka bato ya Yawe kopanza na tina na bino ezali malamu te. \v 25 Pamba te soki moto asali moninga na ye mabe, Nzambe akosambisa ye ; kasi soki moto asali lisumu epai na Yawe, nani akoloba mpo na ye ? » \p Kasi bana batikalaki koyokela tata na bango te, pamba te ezalaki mokano ya Yawe mpo na koboma bango. \p \v 26 Elenge mobali Samuele akobaki kokola na nzoto, mpe azalaki kosepelisa Yawe mpe bato. \s1 Etumbu mpo na Eli mpe libota na ye \p \v 27 Mokolo moko, moto moko na Nzambe ayaki epai ya Eli mpe alobaki na ye : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Boni, namimonisaki te na polele epai ya libota ya tata na yo tango bazalaki na Ejipito, na se ya bokonzi ya Faraon ? \v 28 Naponaki tata na yo kati na bikolo nyonso ya Isalaele mpo ete asalela Ngai lokola Nganga-Nzambe, mpo ete amata na etumbelo na Ngai, atumba mbeka ya malasi mpe alata efode liboso na Ngai. Napesaki lisusu, na libota ya tata na yo, makabo nyonso ya bana ya Isalaele, makabo oyo bazikisa na moto. \v 29 Bongo mpo na nini bozali kozwa na limemia te bambeka mpe makabo na Ngai, oyo napeselaki mitindo ete epesama kati na Ndako na Ngai ? Mpo na nini ozali kopesa bana na yo ya mibali lokumu koleka Ngai, na ndenge bozali kolia biteni oyo eleki kitoko kati na bambeka oyo bato na Ngai, Isalaele, bazali kobonzela Ngai ? \pi1 \v 30 Lokola ezali bongo, tala makambo oyo Ngai Yawe, Nzambe ya Isalaele, nalobi : ‹ Nalakaki ete libota na yo mpe libota ya tata na yo bakosalela Ngai tango nyonso lokola Banganga-Nzambe. › Kasi sik’oyo, Ngai Yawe nalobi : ‹ Esili ! Mosika na Ngai elaka oyo ! Bato oyo bazali kopesa Ngai lokumu, bango kaka nde Ngai nakopesa lokumu ; kasi ba-oyo bazali kotiola Ngai, nakoyokisa bango soni. \v 31 Mpe na mikolo oyo ezali koya, nakokomisa mikolo na yo mpe ya libota na yo mikuse, mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo. \v 32 Atako bakosalela Isalaele bolamu, kasi yo okomona pasi kati na Ndako na Ngai ; mpe mobange akotikala kozala lisusu te kati na molongo ya libota na yo. \v 33 Nzokande, kati na bato na yo, ekozala na moto moko oyo nakolongola te liboso ya etumbelo na Ngai, mpo ete obanda koyokelaka ye zuwa mpe obanda kozikaka motema ; kasi bana nyonso oyo bakobotama na ndako na yo bakokufa na bolenge na bango. \v 34 Mpe makambo oyo ekokweyela bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, ekozala elembo mpo na yo : bango mibale bakokufa mokolo moko. \v 35 Nakomiponela Nganga-Nzambe ya sembo oyo akosala kolanda motema mpe makanisi na Ngai. Nakobongisela ye libota moko oyo ekowumela, mpe akosala tango nyonso mosala ya bonganga-Nzambe liboso ya mopakolami na Ngai. \v 36 Bongo moto nyonso oyo akotikala kati na libota na yo akobanda koya kofukama liboso na ye mpo na kozwa mbongo moko ya palata mpe eteni ya lipa, mpe akoloba : ‘ Kotisa ngai ata na mosala moko kati na misala ya bonganga-Nzambe mpo ete nazwaka ata eteni ya lipa. ’ › » \c 3 \s1 Yawe abengi Samuele \p \v 1 Elenge mobali Samuele azalaki kosalela Yawe na bokambami ya Eli. Na mikolo wana, Yawe azalaki koloba mingi te epai ya bato, mpe bimoniseli ezalaki mingi te. \v 2 Mokolo moko na butu, Nganga-Nzambe Eli azalaki ya kolala na esika na ye ; miso na ye elembaki mpe akokaki lisusu komona te. \v 3 Mwinda ya Esika ya bule ezalaki kopela, wana Samuele azalaki ya kolala kati na Tempelo ya Yawe, epai wapi Sanduku ya Nzambe ezalaki. \v 4 Yawe abengaki Samuele, mpe ye azongisaki : \pi1 — Ngai oyo ! \p \v 5 Akendeki mbangu epai ya Eli mpe alobaki : \pi1 — Ngai oyo, obengi ngai ! \p Kasi Eli alobaki na ye : \pi1 — Nabengi yo te ! Zonga mpe lala. \p Samuele akendeki mpe alalaki. \p \v 6 Yawe abengaki lisusu : \pi1 — Samuele ! \p Samuele alamukaki, azongaki epai ya Eli mpe alobaki : \pi1 — Ngai oyo, obengi ngai ! \p Eli alobaki na ye : \pi1 — Mwana na ngai, nabengi yo te. Zonga, kende kolala. \p \v 7 Nzokande, Samuele ayebaki nanu Yawe te mpe atikalaki nanu te koyoka Yawe koloba na ye ata mbala moko. \p \v 8 Yawe abengaki Samuele na mbala ya misato ; mpe Samuele atelemaki, akendeki epai ya Eli mpe alobaki : \pi1 — Ngai oyo, obengi ngai ! \p Bongo Eli asosolaki ete ezalaki Yawe nde azalaki kobenga elenge mobali. \v 9 Boye Eli alobaki na Samuele : \pi1 — Kende na yo kolala ; mpe soki abengi yo, okoloba : « Yawe loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka ! » \p Samuele akendeki mpe alalaki na esika na ye. \p \v 10 Yawe ayaki mpe atelemaki wana ; abengaki lokola na mbala mosusu : \pi1 — Samuele ! Samuele ! \p Samuele azongisaki : \pi1 — Nkolo, loba, pamba te mosali na Yo azali koyoka. \p \v 11 Yawe alobaki na Samuele : \pi1 — Tala, nalingi kosala likambo moko oyo, kati na Isalaele, ekosala pasi na matoyi ya moto nyonso oyo akoyoka yango. \v 12 Na tango wana, nakokokisa makambo nyonso oyo nayebisaki Eli mpo na kotelemela libota na ye, wuta na ebandeli kino na suka. \v 13 Pamba te nayebisaki ye ete nakosambisa libota na ye mpo na libela, mpo na masumu oyo ye ayebi, masumu oyo na nzela na yango bana na ye ya mibali bamikomisaki mbindo, kasi ye apamelaki bango te. \v 14 Yango wana, nalapi ndayi mpo na ndako ya Eli ete mbeba ya libota na ye ekotikala kolimbisama te, ezala na nzela ya bambeka to ya makabo. \p \v 15 Samuele alalaki kino na tongo. Bongo sima na ye kolamuka, afungolaki bikuke ya Tempelo ya Yawe. Azalaki kobanga koyebisa Eli emoniseli oyo azwaki. \v 16 Kasi Eli abengaki Samuele mpe alobaki : \pi1 — Samuele, mwana na ngai ! \p Samuele azongisaki : \pi1 — Ngai oyo ! \p \v 17 Eli atunaki ye : \pi1 — Makambo nini Yawe ayebisaki yo ? Kobombela ngai te. Tika ete Nzambe apesa yo etumbu ya makasi soki obombeli ngai ata likambo moko kati na nyonso oyo alobaki na yo. \p \v 18 Boye Samuele ayebisaki ye makambo nyonso, abombelaki ye ata likambo moko te. Mpe Eli alobaki : \pi1 — Azali Yawe. Tika ete asala makambo oyo ezali malamu na miso na Ye. \p \v 19 Wana Samuele azalaki kokola, Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kokokisa maloba na Ye nyonso. \v 20 Bato nyonso ya Isalaele, longwa na Dani kino na Beri-Sheba, bandimaki ete Samuele azali penza mosakoli ya Yawe. \v 21 Yawe akobaki komilakisa na Silo, pamba te azalaki komimonisa kuna epai ya Samuele na nzela ya Liloba na Ye. \c 4 \p \v 1 Mpe Samuele azalaki kokomisa maloba ya Yawe epai ya bato nyonso ya Isalaele. \s1 Bato ya Filisitia babotoli Sanduku \p Na tango wana, bato ya Isalaele bakendeki kobundisa bato ya Filisitia. Bato ya Isalaele batongaki molako na bango na Ebeni-Ezeri, mpe bato ya Filisitia batongaki ya bango molako, na Afeki. \v 2 Bato ya Filisitia batandamaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Mpe wana bitumba ekomaki makasi, bato ya Filisitia balongaki bato ya Isalaele mpe babomaki na bitumba yango basoda ya Isalaele, pene nkoto minei. \v 3 Tango basoda ya Isalaele bazongaki na molako, bampaka ya Isalaele batunaki : \pi1 — Mpo na nini Yawe asali ete bato ya Filisitia balonga biso na mokolo ya lelo ? Tokende kozwa Sanduku ya Boyokani ya Yawe, na Silo, mpo ete eya kati na biso mpe ekangola biso na maboko ya banguna na biso. \p \v 4 Boye batindaki bato na Silo. Mpe longwa kuna, bamemaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, oyo avandaka na kiti na Ye ya bokonzi kati na basheribe. Ofini mpe Fineasi, bana mibali mibale ya Eli, bazalaki wana elongo na Sanduku ya Boyokani ya Nzambe. \p \v 5 Tango kaka Sanduku ya Boyokani ya Yawe ekotaki na molako, bato nyonso ya Isalaele bagangaki na mongongo makasi, mpe mabele eninganaki. \v 6 Bato ya Filisitia bayokaki koganga wana mpe batunaki : \pi1 — Koganga nyonso wana elakisi nini kati na molako ya Ba-Ebre ? \p Wana bayokaki sango ete Sanduku ya Yawe ekoti kati na molako, \v 7 bato ya Filisitia babangaki mpe balobaki : \pi1 — Eh, tobebi na biso ! Nzambe akoti na molako ! Likambo ya boye nanu esalema te ! \v 8 Mawa na biso ! Nani akokangola biso na maboko ya Nzambe oyo ya nguya ? Ezali Nzambe wana nde abomaki bato ya Ejipito na nzela ya bitumbu ya ndenge na ndenge kati na esobe. \v 9 Bandeko bato ya Filisitia, boyika mpiko ! Bozala mibali, noki te bokokoma bawumbu ya Ba-Ebre ndenge bango bazalaki bawumbu na bino ! Bozala mibali mpe bobunda ! \p \v 10 Boye bato ya Filisitia babundisaki bato ya Isalaele mpe balongaki. Moto nyonso akimaki na ndako na ye ya kapo. Kokweyisama ya bato ya Isalaele ezalaki ya makasi penza : motango ya basoda ya Isalaele, oyo babundaka na makolo mpe bakufaki ezalaki nkoto tuku misato. \v 11 Bato ya Filisitia babotolaki Sanduku ya Nzambe, mpe bana mibali mibale ya Eli, Ofini mpe Fineasi, bakufaki. \s1 Kufa ya Eli \p \v 12 Moto moko ya ekolo ya Benjame akimaki mbangu longwa na bisika oyo bazalaki kobunda mpe akomaki na Silo, na mokolo yango kaka ; azalaki na bilamba epasuka, mpe na putulu, na moto na ye. \v 13 Akomaki na tango oyo Eli azalaki ya kovanda na kiti, pembeni ya nzela, mpe azalaki kotala na ekenge, pamba te motema na ye ezalaki na kimia te na tina na Sanduku ya Nzambe. Bongo tango moto yango akotaki na engumba mpe apesaki sango ya makambo nyonso oyo ewutaki kosalema, engumba mobimba egangaki. \v 14 Tango Eli ayokaki koganga yango, atunaki : \pi1 — Makelele oyo elakisi nini ? \p Mpe moto yango ayaki na lombangu kopesa sango epai ya Eli. \v 15 Nzokande Eli azalaki na mibu tuku libwa na mwambe ya mbotama ; miso na ye elembaki makasi, akokaki komona lisusu te. \v 16 Alobaki na Eli : \pi1 — Nawuti na esika ya bitumba, nawuti kokima kuna kaka lelo. \p Eli atunaki ye : \pi1 — Mwana na ngai, makambo nini eleki kuna ? \p \v 17 Moto oyo amemaki sango azongisaki : \pi1 — Bato ya Isalaele bakimi liboso ya bato ya Filisitia, mpe ebele kati na bango bakufi ; ezala bana na yo mibale ya mibali, Ofini mpe Fineasi, bakufi. Bato ya Filisitia babotoli Sanduku ya Nzambe. \p \v 18 Tango kaka moto wana atangaki kombo ya Sanduku ya Nzambe, Eli akweyaki makalikali longwa na kiti na ye, pembeni ya ekuke ya Ndako ya Yawe, kingo na ye ebukanaki, mpe akufaki, pamba te azalaki mobange mpe nzoto minene. Akambaki Isalaele mibu tuku minei. \p \v 19 Bokilo na ye ya mwasi, mwasi ya Fineasi, azalaki na zemi mpe akomaki pembeni ya kobota. Tango kaka ayokaki sango ete babotoli Sanduku ya Nzambe, ete tata-bokilo na ye mpe mobali na ye bakufi, agunzamaki, abandaki mbala moko pasi ya kobota, mpe abotaki. \v 20 Lokola akomaki pene ya kokufa, basi oyo bazingelaki ye balobaki na ye : \pi1 — Kobanga te ! Oboti mwana mobali ! \p Kasi ye apesaki eyano moko te mpe atiaki makanisi na ye kuna te. \v 21 Apesaki mwana yango kombo « I-Kabodi » oyo elingi kolakisa : Nkembo elongwe na Isalaele ! \p Atiaki makanisi na ye na Sanduku ya Nzambe, oyo babotoli, na tata-bokilo na ye mpe na mobali na ye, oyo bakufi. \p \v 22 Alobaki : « Nkembo elongwe na Isalaele, pamba te babotoli Sanduku ya Nzambe. » \c 5 \s1 Sanduku kati na Asidodi mpe Ekroni \p \v 1 Sima na bango kobotola Sanduku ya Nzambe, bato ya Filisitia balongolaki yango na Ebeni-Ezeri mpe bakendeki na yango na Asidodi. \v 2 Bato ya Filisitia bakotisaki Sanduku ya Nzambe kati na tempelo ya Dagoni, nzambe na bango, mpe batiaki yango pembeni ya ekeko ya Dagoni. \v 3 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, bato ya Asidodi balamukaki mpe bamonaki Dagoni, nzambe na bango, akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe. Bazwaki mpe batelemisaki Dagoni, mpe bazongisaki ye na esika na ye. \v 4 Kasi tango balamukaki na tongo ya mokolo mosusu oyo elandaki, bamonaki lisusu Dagoni akweya na mabele, elongi etala na se, liboso ya Sanduku ya Yawe, moto mpe maboko ekatana, mpe etandama na ekotelo ; kaka nzoto na ye nde etikalaki. \v 5 Yango wana, kino na mokolo ya lelo, banganga-nzambe ya Dagoni mpe bato mosusu oyo bakotaka na tempelo ya nzambe Dagoni, na Asidodi, banyataka zingazinga ya ekotelo te. \p \v 6 Loboko na Yawe etelemelaki bato ya Asidodi mpe ya zingazinga, ebebisaki bango mpe ekweyiselaki bango bokono ya pota ya libumu. \v 7 Tango bato ya Asidodi bamonaki makambo oyo ekomelaki bango, balobaki : \pi1 — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli lisusu te kozala awa elongo na biso, pamba te Nzambe oyo anyokoli biso mingi na nguya na Ye ; anyokoli biso mpe anyokoli Dagoni, nzambe na biso. \p \v 8 Na bongo, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia, batunaki bango : \pi1 — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Nzambe ya Isalaele. \p Bazongisaki : \pi1 — Sanduku ya Nzambe ya Isalaele esengeli kokende na Gati. \p Boye bamemaki Sanduku ya Nzambe ya Isalaele na Gati. \p \v 9 Kasi sima na bango komema yango kuna, loboko na Yawe etelemelaki lisusu bato ya engumba wana, ekotisaki pasi kati na bango : Yawe akweyiselaki bato ya engumba bokono ya « mosomba, » kobanda na bilenge kino na mikolo. \v 10 Bongo batindaki Sanduku ya Nzambe na Ekroni. \p Tango Sanduku ya Nzambe ekotaki na Ekroni, bato ya Ekroni bagangaki : \pi1 — Bamemi Sanduku ya Nzambe ya Isalaele epai na biso mpo ete baboma biso mpe baboma bato na biso. \p \v 11 Boye, babengaki mpe basangisaki bakambi nyonso ya bato ya Filisitia ; balobaki na bango : \pi1 — Bolongola Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango na esika na yango ; noki te ekoboma biso mpe ekoboma bato na biso. \p Somo ya kufa ekangaki engumba mobimba, pamba te loboko na Yawe ezalaki kobebisa makasi kati na yango. \v 12 Bato oyo bakufaki te bazwaki bokono ya pota ya libumu, mpe koganga ya engumba emataki kino na likolo. \c 6 \s1 Sanduku ezongi na Isalaele \p \v 1 Sima na Sanduku ya Yawe kosala sanza sambo kati na mokili ya bato ya Filisitia, \v 2 bato ya Filisitia babengisaki Banganga-Nzambe mpe bato ya soloka, balobaki na bango : \pi1 — Tosengeli kosala nini na Sanduku ya Yawe ? Boyebisa biso ndenge nini tokoki kozongisa yango na esika na yango. \p \v 3 Bazongisaki : \pi1 — Soki bolingi kozongisa Sanduku ya Nzambe ya Isalaele, bozongisa yango ya pamba te, kasi bozongisa yango elongo na bambeka mpo na masumu ; bongo bokobika na bokono, mpe bokoyeba mpo na nini loboko na Yawe etikaki te konyokola bino. \p \v 4 Bato ya Filisitia batunaki : \pi1 — Mbeka ya masumu ya lolenge nini tosengeli kobonzela Yawe ? \p Bazongisaki : \pi1 — Kolanda motango ya bakambi ya bato ya Filisitia, bobonzela Ye biloko mitano ya wolo, oyo ekotalisa bapota ya libumu, mpe bampuku mitano ya wolo ; pamba te ezala bino to bakambi na bino, bokweyelaki kaka etumbu ya ndenge moko. \v 5 Bosala bililingi oyo ekotalisa bapota na bino ya libumu, mpe oyo ekotalisa bampuku oyo ezali kobebisa mokili na bino ; mpe bopesa nkembo na Nzambe ya Isalaele. Tango mosusu, akolongola loboko na Ye na likolo na bino, na likolo ya banzambe na bino, mpe na likolo ya mokili na bino. \v 6 Tina nini kozala moto makasi lokola Faraon mpe bato ya Ejipito ? Bokanisa ete sima na Nzambe konyokola bango, batikaki bana ya Isalaele kokende na nzela na bango. \v 7 Boye bino, bosala sik’oyo shario moko ya sika ; bozwa bangombe mibale ya basi oyo ezali komelisa mpe oyo nanu balatisi te ekangiseli na kingo. Bokangisa bangombe yango na shario, kasi bozongisa bana na yango na lopango. \v 8 Bokamata Sanduku ya Yawe mpe botia yango na likolo ya shario. Pembeni ya Sanduku ya Yawe, botia kati na mwa sanduku moko ya moke biloko ya wolo oyo bokobonzela Yawe lokola bambeka mpo na masumu. Sima, botika yango kokende. \v 9 Kasi bokotala yango malamu : soki Sanduku ya Yawe ezwi nzela ya Beti-Shemeshi mpo na kokende na mokili na yango, wana elakisi ete Yawe nde akweyiselaki biso pasi makasi yango ; soki te, wana tokoyeba ete ezalaki na yango loboko na Yawe te, kasi oyo ekomelaki biso ezalaki na yango kaka libaku. \p \v 10 Bato ya Filisitia basalaki ndenge bayebisaki bango : bazwaki bangombe mibale ya basi oyo ezalaki komelisa mpe bakangisaki yango na shario. Kasi bazongisaki bana na yango na lopango. \v 11 Batiaki Sanduku ya Yawe na likolo ya shario ; bongo na pembeni na yango, batiaki mwa sanduku oyo ya moke, oyo kati na yango ezalaki na bampuku ya wolo mpe bililingi ya bapota na bango ya libumu. \v 12 Bangombe yango ya basi ekendeki mbala moko na nzela ya Beti-Shemeshi, elandaki kaka nzela yango mpe, nzela-nzela, ezalaki kolela ; ebalukaki te ezala na ngambo ya loboko ya mwasi to na ngambo ya loboko ya mobali. Nzokande bakambi ya bato ya Filisitia balandaki yango na mosika kino na mondelo ya Beti-Shemeshi. \p \v 13 Na eleko yango, bato ya Beti-Shemeshi bazalaki kobuka ble, na lubwaku. Bongo tango batombolaki miso mpe bamonaki Sanduku, basepelaki makasi. \v 14 Shario ekomaki na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi, mpe etelemaki wana, pembeni ya libanga monene. Bato babukaki mabaya ya sanduku mpe babonzaki bangombe ya basi lokola mbeka ya kotumba mpo na Yawe. \v 15 Balevi bakitisaki Sanduku ya Yawe elongo na mwa sanduku ya moke oyo kati na yango ezalaki na biloko ya wolo, mpe batiaki yango na likolo ya libanga monene. Na mokolo wana, bato ya Beti-Shemeshi babonzaki bambeka ya kotumba mpe makabo epai na Yawe. \v 16 Bakambi yango mitano ya bato ya Filisitia bamonaki makambo nyonso wana mpe bazongaki na Ekroni kaka mokolo wana. \p \v 17 Tala bililingi ya wolo ya bapota ya libumu oyo bato ya Filisitia babonzelaki Yawe lokola bambeka mpo na masumu : moko mpo na Asidodi, moko mpo na Gaza, moko mpo na Ashikeloni, moko mpo na Gati, moko mpo na Ekroni. \v 18 Ezalaki mpe na bampuku ya wolo, kolanda motango ya bingumba ya bato ya Filisitia, oyo bakambi mitano oyo bazalaki koyangela : kobanda na bingumba batonga makasi, bamboka na yango ya mike kino na libanga ya monene oyo, na likolo na yango, batiaki Sanduku ya Yawe mpe oyo, kino na mokolo ya lelo, ezali na elanga ya Jozue, moto ya Beti-Shemeshi. \p \v 19 Kasi Nzambe abomaki bato ya Beti-Shemeshi mpo ete batalaki Sanduku ya Yawe : kati na bato nkoto tuku mitano, abomaki tuku sambo. Bato ya Beti-Shemeshi basalaki matanga mpo ete Yawe apesaki bango etumbu ya makasi. \v 20 Bato ya Beti-Shemeshi balobaki : « Nani akoki kotelema liboso ya Yawe, Nzambe oyo ya bule ? Sanduku ekokende epai ya nani soki elongwe awa epai na biso ? » \p \v 21 Bongo batindaki bantoma koloba na bato ya Kiriati-Yearimi : « Bato ya Filisitia bazongisi Sanduku ya Yawe ; boya kozwa yango mpe bomema yango epai na bino. » \c 7 \nb \v 1 Bato ya Kiriati-Yearimi bayaki kozwa Sanduku ya Yawe mpe bamemaki yango na ndako ya Abinadabi, na ngomba moke ; mpe babulisaki Eleazari, mwana na ye ya mobali, mpo ete abatelaka Sanduku ya Yawe. \s1 Bato ya Isalaele bazongi epai na Yawe \p \v 2 Wuta mokolo Sanduku ya Yawe ekomaki na Kiriati-Yearimi, elekaki mikolo ebele : mibu pene tuku mibale. Mpe bato nyonso ya Isalaele bayokaki posa ya kozonga epai na Yawe. \v 3 Bongo Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele : « Soki ezali na motema na bino mobimba nde bolingi kozonga epai na Yawe, bolongola kati na bino banzambe ya bapaya mpe bikeko ya Asitarite ; mpe bomipesa mobimba epai na Yawe mpe bosalela kaka Ye. Na nzela wana nde Ye akokangola bino na maboko ya bato ya Filisitia. » \v 4 Bato ya Isalaele balongolaki kati na bango banzambe Bala mpe bikeko ya Asitarite, mpe basalelaki kaka Yawe. \p \v 5 Samuele alobaki na bango : « Bosangisa bato nyonso ya Isalaele, na Mitsipa, mpe ngai nakosambela Yawe mpo na bino. » \v 6 Bato ya Isalaele basanganaki na Mitsipa, batokaki mayi mpe basopaki yango na mabele, liboso ya Yawe. Na mokolo wana, bakilaki bilei mpe batubelaki kuna masumu na koloba : « Tosalaki masumu liboso ya Yawe. » \p Samuele akambaki Isalaele wuta na Mitsipa. \s1 Bato ya Isalaele balongi bato ya Filisitia \p \v 7 Tango bato ya Filisitia bayokaki ete bato ya Isalaele basangani na Mitsipa, bakambi ya bato ya Filisitia bayaki kobundisa bango. Bongo tango bato ya Isalaele bayokaki sango yango, babangaki bato ya Filisitia. \v 8 Bato ya Isalaele balobaki na Samuele : « Kotika te kosambela Yawe, Nzambe na biso, mpo na biso mpo ete abikisa biso na maboko ya bato ya Filisitia. » \v 9 Samuele akamataki mwana meme ya mobali, oyo ezalaki nanu komela mabele, mpe abonzaki yango mobimba lokola mbeka ya kotumba epai na Yawe. Abelelaki Yawe mpo na Isalaele, mpe Yawe ayokaki losambo na ye. \p \v 10 Wana Samuele azalaki kobonza mbeka ya kotumba, bato ya Filisitia bapusanaki pembeni mpo na kobundisa bato ya Isalaele. Kasi na mokolo wana, Yawe atindelaki bato ya Filisitia kake makasi oyo ekotisaki mobulu kati na bango. Mpe bato ya Isalaele balongaki bango. \v 11 Bato ya Isalaele babimaki na Mitsipa, balandaki bato ya Filisitia kino na se ya Beti-Kari mpe babomaki bango. \p \v 12 Bongo Samuele akamataki libanga moko mpe atiaki yango kati na Mitsipa mpe Sheni ; apesaki yango kombo « Ebeni-Ezeri\f + \fr 7.12 \fr*\ft Ebeni-Ezeri elakisi : Libanga ya lisungi\ft*\f* » mpo na koloba : « Kino na esika oyo, Yawe asungi biso. » \v 13 Bato ya Filisitia bayokisamaki soni mpe bazongelaki lisusu te kokota na mokili ya Isalaele. Na mikolo nyonso ya bomoi ya Samuele, loboko na Yawe etelemelaki bato ya Filisitia. \v 14 Bingumba oyo bato ya Filisitia babotolaki epai ya bato ya Isalaele, kobanda na Ekroni kino na Gati, ezongaki na maboko ya bato ya Isalaele, mpe bato ya Isalaele bakangolaki bamboka nyonso ya zingazinga oyo ezalaki na se ya bokonzi ya bato ya Filisitia. Mpe kimia ezalaki kati na bato ya Isalaele mpe bato ya Amori. \p \v 15 Samuele akambaki Isalaele mikolo nyonso ya bomoi na ye. \v 16 Abandaki kotambola mibu nyonso, kobanda na Beteli, koleka na Giligali kino na Mitsipa, mpo na kokamba bato ya Isalaele na bisika nyonso wana. \v 17 Kasi azalaki kozonga tango nyonso na Rama epai wapi ndako na ye ezalaki. Ezali kuna nde azalaki lisusu kokamba bato ya Isalaele. Mpe atongaki kuna etumbelo mpo na Yawe. \c 8 \s1 Bato ya Isalaele basengi mokonzi \p \v 1 Tango Samuele akomaki mobange, aponaki bana na ye ya mibali mpo ete bazala basambisi kati na Isalaele. \v 2 Kombo ya mwana na ye ya liboso ya mobali ezalaki « Joeli, » mpe ya mibale, « Abiya. » Bazalaki kosala mosala na bango na Beri-Sheba, \v 3 kasi batambolaki te na nzela ya Samuele, tata na bango : bamipesaki na lokoso ya mbongo, na kozwaka kanyaka mpe na kokataka makambo na bosembo te. \v 4 Mpo na yango, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele basanganaki elongo mpe bakendeki epai ya Samuele, na Rama. \v 5 Balobaki na ye : « Tala, yo okomi na yo mobange, mpe bana na yo ya mibali bazali kotambola te na banzela na yo. Sik’oyo, pona mokonzi oyo akokamba biso ndenge ezali na bikolo nyonso. » \p \v 6 Kasi tango balobaki : « Pesa biso mokonzi oyo akokamba biso, » Samuele asepelaki na likambo yango te ; boye asambelaki Yawe. \v 7 Mpe Yawe azongiselaki Samuele : « Yoka makambo nyonso oyo bato bazali koloba na yo. Ezali yo te nde basundoli, kasi basundoli nde Ngai lokola Mokonzi na bango. \v 8 Bazali kosala yo ndenge kaka basalaki Ngai, banda mokolo oyo nabimisaki bango na Ejipito kino lelo : basundolaki Ngai mpe basalelaki banzambe mosusu. \v 9 Sik’oyo, yoka bango ; kasi kebisa bango malamu mpe yebisa bango makambo nyonso oyo mokonzi oyo akokonza bango akobanda kosala. » \p \v 10 Samuele ayebisaki bato oyo bazalaki kosenga ye mokonzi maloba nyonso ya Yawe. \v 11 Alobaki na bango : \pi1 — Tala makambo oyo mokonzi oyo akokonza bino akobanda kosala : Akozwa bana na bino ya mibali mpe akotia bango na mosala ya kokumba bashar na ye kati na basoda na ye oyo babundaka na bampunda ; bakobanda kokima mbangu liboso ya shar na ye lokola bakengeli ya mokonzi. \v 12 Akotia bamoko, bakonzi ya bankoto ya basoda ; bamosusu, bakonzi ya basoda tuku mitano ; bamosusu, akotia bango na mosala ya kobalola mabele ya bilanga na ye, kobuka bambuma na ye mpe kosalela ye bibundeli ya bitumba mpe bisalelo mpo na bashar na ye. \v 13 Akokamata bana na bino ya basi mpo ete basalaka malasi, balambaka bilei mpe mapa. \v 14 Akokamata bilanga na bino ya vino mpe ya olive oyo eleki kitoko, mpe akopesa yango epai ya basali na ye. \v 15 Akokamata eteni ya zomi ya milona na bino mpe ya bilanga na bino ya vino, mpe akopesa yango epai ya kalaka na ye ya lokumu mpe epai ya basali na ye. \v 16 Bongo, kati na basali na bino ya mibali, basali na bino ya basi, bilenge na bino mpe ba-ane na bino, akokamata ba-oyo baleki kitoko mpo na misala na ye. \v 17 Akokamata eteni ya zomi ya bameme na bino, mpe bino moko bokokoma bawumbu na ye. \v 18 Bongo na mokolo wana, tango bokobanda kolelalela mpo na mokonzi oyo bino moko bokomiponela, na mokolo yango, Yawe akoyanola bino ata moke te. \p \v 19 Kasi bato baboyaki koyokela Samuele, balobaki : \pi1 — Te ! Biso tolingi kaka mokonzi. \v 20 Na bongo, biso mpe tokozala lokola bikolo mosusu. Mokonzi na biso akokamba biso, akobima liboso na biso mpe akotambolisa biso na bitumba. \p \v 21 Tango Samuele ayokaki maloba nyonso ya bato, amemaki yango liboso ya Yawe. \v 22 Mpe Yawe alobaki na Samuele : « Yokela bango mpe pesa bango mokonzi ! » \p Bongo Samuele alobaki na bato ya Isalaele : « Tika ete moto na moto azonga na engumba na ye ! » \c 9 \s1 Samuele apakoli Saulo mafuta \p \v 1 Kati na ekolo ya Benjame, ezalaki na moto moko ya bozwi ; kombo na ye ezalaki « Kishi, » mwana mobali ya Abieli, mwana mobali ya Tserori, mwana mobali ya Bekorati, mwana mobali ya Afia, moto ya ekolo ya Benjame. \v 2 Azalaki na mwana mobali ; kombo na ye ezalaki « Saulo. » Azalaki elenge mobali moko ya kitoko ; mpe kati na mibali nyonso ya Isalaele, moko te akokanaki na ye na kitoko ; azalaki mbinga koleka bango nyonso. \p \v 3 Mokolo moko, ba-ane ya tata na ye, Kishi, ebungaki ; mpe Kishi alobaki na mwana na ye, Saulo : « Kamata mosali moko ya mobali kati na basali mpo ete akende elongo na yo koluka ba-ane. » \p \v 4 Boye, Saulo akatisaki etuka ya bangomba ya Efrayimi mpe etando ya Shalisha ; kasi bamonaki yango te. Bakotaki na etuka ya Shalimi, kasi ba-ane ezalaki kuna te ; bakomaki kino na etuka ya Benjame, kasi bamonaki yango kaka te. \p \v 5 Tango bakomaki na mokili ya Tsufi, Saulo alobaki na mosali oyo azalaki elongo na ye : \pi1 — Yaka, tozonga ; noki te tata na ngai akotika kokanisa ba-ane, kasi akokoma komitungisa mpo na biso. \p \v 6 Mosali azongisaki : \pi1 — Zela moke ! Kati na engumba wana, ezali na moto moko ya Nzambe ; azali penza moto ya lokumu ; makambo nyonso oyo ye alobaka, ezangaka te kokokisama. Tokende kuna sik’oyo, tango mosusu akolakisa biso nzela oyo tosengeli kolanda. \p \v 7 Saulo alobaki na mosali na ye : \pi1 — Likambo te ! Tokende epai na ye ! Kasi tokopesa eloko nini epai ya moto na Nzambe ? Pamba te kati na libenga na biso, biloko ya kolia ezali lisusu te ; tozali ata na kado te ya kopesa epai ya moto na Nzambe. Tozali na eloko nini ? \p \v 8 Mosali azongiselaki Saulo : \pi1 — Tala, nazali na mbongo moko ya palata ; nakopesa yango epai ya moto na Nzambe, mpe akolakisa biso nzela oyo tosengeli kolanda. \p \v 9 Na tango ya kala, kati na Isalaele, moto oyo azalaki kokende kotuna toli ya Nzambe azalaki koloba : « Tokende epai ya moto oyo azwaka bimoniseli. » Pamba te moto oyo bazali kobenga lelo « mosakoli, » bazalaki kobenga ye na kala « moto oyo azwaka bimoniseli. » \v 10 Saulo alobaki na mosali na ye : \pi1 — Malamu ! Tokende ! \p Boye, bakendeki na engumba epai wapi moto na Nzambe azalaki kovanda. \v 11 Wana bazalaki komata ngomba oyo ekenda na engumba, bakutanaki na bana basi oyo bazalaki kobima mpo na koluka mayi. Batunaki bango : \pi1 — Boni, ezalaka awa na moto oyo azwaka bimoniseli ? \p \v 12 Bazongiselaki ye : \pi1 — Iyo ! Azali liboso na bino. Kasi bosala noki ; awuti kokoma kaka sik’oyo kati na engumba na biso, pamba te bato bakobonza lelo mbeka, na esambelo ya likolo ya ngomba. \v 13 Soki kaka bokoti na engumba, bomona ye mbala moko, liboso ete amata na esambelo ya likolo ya ngomba mpo na kolia ; pamba te bato bakoki kobanda kolia te soki ye akomi nanu te : asengeli nanu kopambola mbeka liboso ete bato oyo babengami babanda kolia. Bomata sik’oyo, mpe bokomona ye na ngonga oyo. \p \v 14 Boye bakendeki na engumba ; mpe wana bazalaki kokota kati na yango, Samuele abimaki liboso na bango tango azalaki kokende na esambelo ya likolo ya ngomba. \v 15 Nzokande, mokolo moko liboso ete Saulo akoma, Yawe amonisaki likambo yango epai ya Samuele. \v 16 Alobaki na ye : « Lobi, na ngonga oyo, nakotindela yo mobali moko kowuta na etando ya Benjame ; okopakola ye mafuta mpo ete azala mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. Akokangola bato na Ngai na maboko ya bato ya Filisitia, pamba te namoni pasi ya bato na Ngai, mpe koganga na bango ekomaki kino epai na Ngai. » \p \v 17 Tango Samuele amonaki Saulo na mosika, Yawe alobaki na ye : « Tala moto oyo nalobelaki yo ; ye nde akokonza bato na Ngai. » \p \v 18 Saulo apusanaki pembeni ya Samuele, na ekuke ya engumba, mpe atunaki ye : \pi1 — Nabondeli yo, okoki kolakisa ngai ndako ya moto oyo azwaka bimoniseli ? \p \v 19 Samuele azongiselaki Saulo : \pi1 — Ngai oyo moto oyo azwaka bimoniseli. Kende liboso na ngai, na esambelo ya likolo ya ngomba ; pamba te, lelo, okolia elongo na ngai. Bongo lobi na tongo, nakotika yo kozonga, mpe nakoyebisa yo makambo nyonso oyo ezali kati na motema na yo. \v 20 Komitungisa na yo te na tina na ba-ane na yo, oyo ebungaki wuta mikolo misato, pamba te esili komonana. Bongo nani nkolo biloko nyonso ya motuya oyo ezali kati na Isalaele ? Ezali biloko na yo mpe libota mobimba ya tata na yo. \p \v 21 Saulo azongisaki : \pi1 — Ngai nazali moto ya ekolo ya Benjame, ekolo oyo eleki moke kati na bikolo ya Isalaele. Etuka na ngai eleki moke kati na bituka nyonso ya ekolo ya Benjame. Boye mpo na nini ozali koloba na ngai na lolenge oyo ? \p \v 22 Samuele amemaki Saulo elongo na mosali na ye, akotisaki bango na esika ya feti mpe avandisaki bango liboso ya babengami : bazalaki bato pene tuku misato. \v 23 Samuele alobaki na moto oyo azalaki kolamba : « Yaka na ndambo ya biloko oyo nayebisaki yo ete otia yango pembeni. » \p \v 24 Moto oyo azalaki kolamba azwaki mopende mpe nyonso oyo ekangani na yango, mpe atiaki yango liboso ya Saulo. Samuele alobaki na Saulo : « Tala ndambo ya biloko oyo babombelaki yo. Lia yango, pamba te babombelaki yo yango wuta tango nabengisaki bato. » \p Boye, na mokolo wana, Saulo aliaki elongo na Samuele. \v 25 Bongo balongwaki nzela moko na esambelo ya likolo ya ngomba mpo na kokita na engumba, mpe Samuele asololaki na Saulo, na veranda ya ndako na ye. \p \v 26 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, balamukaki. Samuele abengaki Saulo na veranda mpe alobaki na ye : « Bongama, nazali kokende kotika yo na nzela na yo. » \p Sima na Saulo kobongama, abimaki libanda nzela moko na Samuele. \v 27 Wana bazalaki kokende mpe bakomaki na mondelo ya engumba, Samuele alobaki na Saulo : « Loba na mosali na yo ete aleka liboso na biso. » Boye mosali alekaki liboso, mpe Samuele alobaki lisusu na Saulo : « Telema awa sik’oyo mpo ete napesa yo sango oyo ewuti epai ya Nzambe. » \c 10 \p \v 1 Bongo Samuele azwaki molangi ya mafuta, asopaki yango na moto ya Saulo, ayambaki ye mpe alobaki : « Boni, Yawe apakoli yo mafuta te mpo ete ozala mokambi ya libula na Ye ? \v 2 Sima na yo kotika ngai na mokolo ya lelo, okokutana na mibali mibale pembeni ya kunda ya Rasheli, na Tselitsa, na bandelo ya mokili ya Benjame. Bakoloba na yo : ‹ Ba-ane oyo okendeki koluka emonani. Mpe, sik’oyo, tata na yo atiki komitungisa na tina na yango, kasi akomi nde komitungisa mpo na bino. Azali komituna : ‘ Nakosala nini mpo na mwana na ngai ya mobali. ’ › » \v 3 Kolongwa wana, okokende mwa mosika kino okokoma na nzete monene ya Tabori epai wapi okokutana na mibali misato oyo bakozala komata epai ya Nzambe, na Beteli. Moko akomema bana misato ya ntaba ; mosusu, biteni misato ya mapa ; mpe mosusu, molangi ya vino. \v 4 Bakopesa yo mbote mpe bakokabela yo mapa mibale. Okozwa yango na maboko na bango. \v 5 Sima na yango, okokende na Gibea ya Nzambe epai wapi bayangeli ya Filisitia bazali. Wana okopusana na engumba, okokutana na ngulupa ya basakoli kowuta na esambelo ya likolo ya ngomba. Liboso na bango, ekozala na babeti mandanda, bambunda ya mike, baflite mpe banzenze. Wana bakozala kobeta mindule, basakoli yango bakokoma kosakola. \v 6 Bongo Molimo na Yawe akokitela yo na nguya, okosakola elongo na bango, mpe okobongwana moto ya lolenge mosusu. \v 7 Soki kaka omoni bilembo oyo kokokisama, wana sala na yo nyonso oyo okoki kosala mpo na yo moko, pamba te Nzambe azali elongo na yo. \v 8 Bongo okotambola liboso na ngai mpo na kokende na Giligali, mpe ngai nakokuta yo kuna mpo na kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. Kasi osengeli kozela mikolo sambo kino naya kokuta yo ; mpe nakoyebisa yo makambo oyo osengeli kosala. \s1 Saulo asakoli \p \v 9 Tango kaka Saulo abalukaki mpo na kotika Samuele, Nzambe abongolaki motema ya Saulo, mpe bilembo nyonso ekokisamaki mokolo wana kaka. \v 10 Tango bakomaki na Gibea, ngulupa ya basakoli ekutanaki na ye ; bongo Molimo ya Nzambe akitelaki ye na nguya, mpe akomaki kosakola kati na bango. \v 11 Tango bato nyonso oyo bayebi Saulo wuta kala bamonaki ye kosakola elongo na basakoli bamitunaki : « Likambo nini ekweyi na bomoi ya mwana mobali ya Kishi ? Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? » \v 12 Moko kati na bato oyo bazalaki wana alobaki : « Bongo nani azali motambolisi na bango ? » \p Ezali ndenge wana nde ebandaki lisese oyo : « Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? » \p \v 13 Tango Saulo asilisaki kosakola, akendeki na esambelo ya likolo ya ngomba. \v 14 Noko ya Saulo atunaki Saulo mpe mosali na ye : \pi1 — Bokendeki wapi ? \p Saulo azongisaki : \pi1 — Tokendeki koluka ba-ane. Kasi lokola tomonaki yango te, yango wana tokendeki epai ya Samuele. \p \v 15 Noko ya Saulo alobaki lisusu : \pi1 — Nabondeli yo, yebisa ngai makambo oyo Samuele alobaki na bino. \p \v 16 Saulo azongiselaki noko na ye : \pi1 — Ayebisaki biso ete ba-ane ekomonana solo. \p Kasi Saulo ayebisaki noko na ye te makambo oyo Samuele alobaki na ye na tina na bokonzi. \s1 Saulo akomi mokonzi ya Isalaele \p \v 17 Samuele abengisaki, na Mitsipa, bato ya Isalaele liboso ya Yawe \v 18 mpe alobaki na bango : « Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Ngai moko nde nabimisaki Isalaele wuta na Ejipito mpe nakangolaki bino na maboko ya bato ya Ejipito mpe ya bokonzi nyonso oyo ezalaki konyokola bino. › \v 19 Kasi, na mokolo ya lelo, bobwaki Nzambe na bino, oyo abikisaka bino na pasi na bino nyonso mpe na minyoko na bino. Mpe bolobi na Ye : ‹ Ponela biso mokonzi oyo akokamba biso ! › Lokola ezali bongo, botelema sik’oyo bino moko liboso ya Yawe kolanda bikolo mpe bituka na bino. » \p \v 20 Samuele abengaki ekolo moko na moko ya Isalaele, mpe ekolo ya Benjame eponamaki. \v 21 Abengaki etuka moko na moko ya ekolo ya Benjame, mpe etuka ya Matiri eponamaki. Na suka, ezalaki Saulo, mwana mobali ya Kishi, nde aponamaki. Kasi tango balukaki ye, bamonaki ye te. \v 22 Boye, batunaki lisusu Yawe : \pi1 — Boni, ezali lisusu na moto oyo ayaki awa ? \p Yawe azongisaki : \pi1 — Iyo ! Botala ye wana, abombami kati na biloko. \p \v 23 Bapotaki mbangu mpo na kobimisa ye, mpe batelemisaki ye kati na bato ; mpe emonanaki ete aleki bato nyonso na molayi. \v 24 Bongo Samuele alobaki na bato nyonso : \pi1 — Botala moto oyo Yawe aponi ! Kati na bato nyonso, moko te akokani na ye. \p Bato bazongisaki na koganga : \pi1 — Tika ete mokonzi awumela na bomoi ! \p \v 25 Samuele alimbolelaki bato makambo oyo etali bokonzi, akomaki yango na buku mpe atiaki liboso ya Yawe. Sima na yango, azongisaki bato, moto na moto na ndako na ye. \p \v 26 Saulo mpe azongaki na ndako na ye, na Gibea, elongo na bilombe mibali oyo Nzambe asimbaki mitema na bango mpo ete balanda ye. \v 27 Kasi ezalaki na ndambo ya bato ya kilikili oyo bazalaki koloba : « Moto oyo akokoka kobikisa biso ndenge nini ? » \p Batiolaki ye mpe bapesaki ye ata kado moko te. Kasi Saulo avandaki kimia. \c 11 \s1 Saulo akangoli engumba Yabeshi \p \v 1 Naashi, moto ya Amoni, ayaki kotonga molako na ye liboso ya Yabeshi ya Galadi. Mpe bato nyonso ya engumba Yabeshi balobaki na Naashi : \pi1 — Sala boyokani elongo na biso, mpe tokokoma bawumbu na yo. \p \v 2 Kasi Naashi, moto ya Amoni, azongisaki : \pi1 — Nakoki kosala boyokani elongo na bino soki kaka bondimi ete natobola bino nyonso liso ya ngambo ya mobali. Na bongo, nakoyokisa Isalaele mobimba soni. \p \v 3 Bampaka ya Yabeshi balobaki na ye : \pi1 — Pesa biso mikolo sambo mpo ete totinda bantoma kati na mokili mobimba ya Isalaele ; soki moto moko te ayei kobikisa biso, wana tokomikaba na maboko na yo. \p \v 4 Tango bantoma bakomaki na Gibea, engumba ya Saulo, mpe balobaki na bato makambo nyonso oyo ezalaki koleka, bato nyonso balelaki makasi. \p \v 5 Kaka na tango yango, Saulo awutaki na bilanga, sima na bangombe na ye. Atunaki : « Likambo nini ya mabe ekweyeli bato mpo ete balela boye ? » \p Bayebisaki ye makambo nyonso oyo bato ya Yabeshi balobaki. \v 6 Tango Saulo ayokaki maloba na bango, Molimo na Nzambe akitelaki ye na nguya mpe asilikaki makasi. \v 7 Akamataki bangombe mibale, akataki yango na biteni mpe atindaki biteni yango na Isalaele mobimba na nzela ya bantoma. Bamemaki sango oyo : « Ezali boye nde bakosala bangombe ya moto nyonso oyo akolanda te Saulo mpe Samuele na bitumba. » \p Lokola somo makasi ya Yawe ekangaki bato ya Isalaele, batambolaki lokola moto moko. \v 8 Saulo atangaki bango, na Bezeki ; motango ezalaki : mibali ya Isalaele nkoto nkama misato, mpe mibali ya Yuda nkoto tuku misato. \v 9 Balobaki na bantoma oyo bawutaki na Yabeshi : « Bokende koloba na mibali ya Yabeshi ya Galadi : ‹ Bokokangolama lobi, na tango moyi ekongala makasi. › » \p Tango bantoma bakendeki mpe bapesaki sango yango epai ya bato ya Yabeshi, bato yango basepelaki makasi. \v 10 Boye bato ya Yabeshi balobaki na bato ya Amoni : « Tokomikaba lobi na maboko na bino, mpe bokosala biso nyonso oyo bokomona ete ezali malamu. » \p \v 11 Mokolo oyo elandaki, Saulo akabolaki mibali na ye na masanga misato. Mpe liboso ete tongo etana, bakotaki na molako ya bato ya Amoni mpe babomaki bango kino na tango oyo moyi engalaki makasi. Bapanzaki bato oyo babikaki na lolenge oyo esalaki ete etikalaki ata na mibali mibale te kati na bango oyo bakobaki kozala esika moko. \s1 Saulo andimami lokola mokonzi \p \v 12 Bato balobaki na Samuele : \pi1 — Wapi bato oyo bazalaki koloba : « Boni, Saulo akoyangela biso ? » Bomemela biso bato yango mpo ete toboma bango. \p \v 13 Kasi Saulo alobaki : \pi1 — Moto moko te akokufa na mokolo ya lelo, pamba te Yawe akangoli Isalaele na mokolo ya lelo. \p \v 14 Samuele alobaki na bato : \pi1 — Boya ! Tokende na Giligali mpo na kovandisa kuna bokonzi ya Saulo. \p \v 15 Bato nyonso bakendeki na Giligali mpe batiaki kuna Saulo lokola mokonzi, na miso ya Yawe. Babonzaki kuna bambeka ya boyokani na miso ya Yawe, mpe Saulo elongo na mibali nyonso ya Isalaele basepelaki makasi. \c 12 \s1 Maloba ya suka ya Samuele \p \v 1 Samuele alobaki na bato nyonso ya Isalaele : \pi1 — Napesi nyonso oyo bolobaki na ngai : natieli bino mokonzi. \v 2 Bozali sik’oyo na mokonzi lokola mokambi. Kasi ngai nakomi mobange, nasili na ngai konuna, mpe bana na ngai ya mibali bazali awa elongo na bino. Nazalaki mokambi na bino wuta bolenge na ngai kino na mokolo ya lelo. \v 3 Natelemi lelo liboso na bino. Bofunda ngai liboso ya Yawe mpe liboso ya mopakolami na Ye. Nazwaki ngombe ya nani ? Nazwaki ane ya nani ? Nanyokolaki nani, mpe namonisaki nani pasi ? Nazwaki kanyaka na maboko ya nani mpo na kokanga miso na ngai ? Soki nasalaki likambo moko kati na makambo oyo nyonso, nakozongisa yango. \p \v 4 Bato bazongiselaki ye : \pi1 — Onyokolaki biso te mpe omonisaki biso pasi te ; ozwaki ata eloko moko te na maboko ya moto. \p \v 5 Samuele alobaki na bango : \pi1 — Yawe azali Motatoli mpo na kotelemela bino, mpe mopakolami na Ye azali motatoli na mokolo ya lelo ete bomoni ata eloko moko te kati na maboko na ngai. \p Bato bazongisaki : \pi1 — Azali penza Motatoli. \p \v 6 Bongo Samuele alobaki na bato : \pi1 — Ezali Yawe nde aponaki Moyize mpe Aron, mpe Ye nde abimisaki bakoko na bino na Ejipito. \v 7 Sik’oyo, botelema awa liboso na Ye, pamba te nalingi kosamba na bosolo elongo na bino, liboso ya Yawe, na tina na makambo nyonso ya bosembo oyo Yawe asalaki mpo na bino mpe mpo na bakoko na bino. \pi1 \v 8 Sima na Jakobi kokota na Ejipito, bakoko na bino bagangaki epai na Yawe mpo na kosenga lisungi. Mpe Yawe atindaki Moyize mpe Aron oyo babimisaki bango na Ejipito mpo na kovandisa bango na esika oyo. \v 9 Kasi babosanaki Yawe, Nzambe na bango. Yango wana Ye Yawe akabaki bango na maboko ya Sisera, mokonzi ya basoda ya Atsori ; na maboko ya bato ya Filisitia mpe na maboko ya mokonzi ya Moabi oyo babundisaki bango. \v 10 Bongo bagangaki lisusu epai na Yawe mpo na kosenga lisungi ; balobaki : « Tosali masumu, pamba te tosundoli Yawe mpe tosaleli banzambe Bala mpe Asitarite. Kasi sik’oyo, kangola biso na maboko ya banguna na biso, mpe tokosalela Yo. » \pi1 \v 11 Boye, Yawe atindaki Yerubali oyo babengi Jedeon, Bedani, Jefite mpe Samuele. Akangolaki bino na maboko ya banguna na bino, oyo bazingelaki bino na bangambo nyonso. Mpe bovandaki na kimia. \pi1 \v 12 Kasi tango bomonaki Naashi, mokonzi ya bato ya Amoni, koya kobundisa bino, bolobaki na ngai : « Te ! Tozali na posa ya mokonzi mpo na kokamba biso. » Nzokande ezali Yawe, Nzambe na bino, nde azalaki mokonzi na bino. \v 13 Sik’oyo, botala mokonzi oyo boponaki, mokonzi oyo bosengaki. Ezali Yawe nde atie ye mokonzi mpo na kokamba bino. \v 14 Kobanda lelo, soki botosi Yawe, soki bosaleli Ye, soki bobateli mitindo na Ye, mpe soki bino elongo na mokonzi oyo azali kokamba bino bolandi Yawe, Nzambe na bino, makambo nyonso ekotambola malamu. \v 15 Kasi soki botosi Yawe te mpe bobateli te mibeko na Ye, loboko na Ye ekobalukela bino ndenge ebalukelaki bakoko na bino. \pi1 \v 16 Yango wana sik’oyo lisusu, bobongama mpo na kotala likambo monene oyo Yawe alingi kosala na miso na bino. \v 17 Boni, mokolo ya lelo ezali te tango ya kobuka ble ? Nakobelela Yawe mpo ete atinda kake mpe mvula, bongo bokomona mpe bokososola ndenge nini ezali monene, mabe oyo bosalaki na miso ya Yawe tango bosengaki mokonzi. \p \v 18 Bongo Samuele abelelaki Yawe, mpe, na mokolo wana kaka, Yawe atindaki kake mpe mvula. Boye bato nyonso babangaki makasi Yawe mpe Samuele. \v 19 Bato nyonso balobaki na Samuele : \pi1 — Sambela Yawe, Nzambe na yo, mpo na basali na yo mpo ete tokufa te, pamba te tobakisaki lisusu na likolo ya masumu na biso, likambo ya mabe ya kosenga mokonzi mpo na biso. \p \v 20 Samuele azongiselaki bango : \pi1 — Bobanga te ! Solo, bosalaki mabe nyonso wana ; nzokande bokoba te kozala mosika na Yawe, kasi bosalela Yawe na mitema na bino mobimba. \v 21 Bopengwa te na kolanda banzambe na bino ya bikeko, oyo ezanga na yango tina, oyo ekoki kosalela bino ata bolamu moko te, oyo ekoki te kobikisa bino, pamba te ezali banzambe ezanga tina. \v 22 Mpo na lokumu ya Kombo monene na Ye, Yawe akobwaka bato na Ye te, pamba te asepelaki kokomisa bino bato na Ye moko. \v 23 Kasi mpo na ngai, ekozala penza likambo ya nkele soki nasali masumu liboso ya Yawe, soki natiki kobondela mpo na bino ! Nakolakisa bino nzela oyo ezali malamu mpe alima. \v 24 Kasi, na ngambo na bino, botosa Yawe mpe bosalela Ye na bosembo mpe na mitema na bino mobimba ; botala malamu makambo minene oyo asalelaki bino. \v 25 Kasi soki bokobi kosala mabe, bino mpe mokonzi na bino bokobebisama. \c 13 \s1 Isalaele atombokeli bato ya Filisitia \p \v 1 Saulo azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki Isalaele mibu tuku minei na mibale. \v 2 Saulo aponaki mibali nkoto misato kati na Isalaele : bato nkoto mibale bazalaki elongo na ye na Mikimasi mpe kati na etuka ya ngomba ya Beteli, mpe bato nkoto moko bazalaki elongo na Jonatan, na Gibea ya Benjame. Bato mosusu oyo batikali, azongisaki bango na bandako na bango. \p \v 3 Jonatan alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, oyo bazalaki na Geba. Bongo bato ya Filisitia bayokaki sango na yango. Boye Saulo abetaki kelelo kati na mokili mobimba, mpe alobaki : « Tika ete Ba-Ebre bayoka ! » \p \v 4 Bato nyonso ya Isalaele bayokaki sango oyo azalaki koloba ete Saulo abundisaki mpe alongaki bakambi ya bato ya Filisitia, mpe ete bato ya Filisitia bayinaki bato ya Isalaele. \p Bato nyonso basanganaki na Giligali mpo na kokende kobunda elongo na Saulo. \p \v 5 Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni. \v 6 Tango bato ya Isalaele bamonaki ete bakomi na pasi, mpe ete mampinga na bango ezingami na bangambo nyonso, babombamaki kati na madusu ya mabanga, kati na mabulu, kati na mabanga, mpe kati na bandako ya se ya mabele. \v 7 Ndambo ya Ba-Ebre mosusu bakatisaki mayi ya Yordani mpo na kokende na mokili ya Gadi mpe ya Galadi. Saulo azalaki nanu na Giligali, mampinga nyonso oyo ezalaki elongo na ye ezalaki kolenga na somo. \v 8 Azelaki mikolo sambo, tango oyo Samuele akataki. Kasi mpo ete Samuele ayaki te na Giligali, yango wana bato batikaki Saulo mpe bapalanganaki. \s1 Mbeba ya Saulo \p \v 9 Saulo alobaki : « Bomemela ngai banyama ya mbeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani. » \p Mpe Saulo abonzaki mbeka ya kotumba. \v 10 Bongo tango kaka asilisaki kobonza mbeka yango ya kotumba, Samuele akomaki. Saulo abimaki mpo na kokende kopesa ye mbote. \v 11 Samuele atunaki ye : \pi1 — Osali penza nini ? \p Saulo azongisaki : \pi1 — Tango namonaki ete bato babandi kopalangana mosika na ngai, mpe ete yo oyei te na ngonga oyo ekatamaki, mpe ete bato ya Filisitia bazali kosangana na Mikimasi, \v 12 namilobelaki : « Sik’oyo, bato ya Filisitia bazali koya kobundisa ngai na Giligali, kasi ngai nabondeli Yawe te ! » Yango wana, nazwaki mokano ya kobonza mbeka ya kotumba. \p \v 13 Samuele alobaki na Saulo : \pi1 — Osali lokola moto ya liboma ! Obateli te mitindo oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo. Soki obatelaki yango, alingaki kolendisa bokonzi na yo kati na Isalaele mpo na libela. \v 14 Kasi sik’oyo, bokonzi na yo ekowumela lisusu te. Yawe aluki moto mosusu oyo asepelisaka motema na Ye mpe atie ye mokambi ya bato na Ye, pamba te yo, obateli mibeko ya Yawe te. \p \v 15 Bongo Samuele alongwaki na Giligali mpe akendeki na Gibea ya Benjame. Mpe Saulo atangaki bato oyo bazalaki elongo na ye : bazalaki bato pene nkama motoba. \s1 Bato ya Isalaele bamibongisi mpo na bitumba \p \v 16 Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, mpe mibali nyonso oyo bazalaki kovanda elongo na bango batandamaki mpo na bitumba, na Geba ya Benjame. Kasi bato ya Filisitia batongaki ya bango molako na Mikimasi. \v 17 Longwa na molako ya bato ya Filisitia, mampinga ya basoda ya mpiko ebimaki mpe ekabwanaki na masanga misato : lisanga ya liboso ezwaki nzela oyo ekenda kino na Ofira, na mokili ya Shuwali ; \v 18 lisanga ya mibale etalisaki na nzela ya Beti-Oroni ; mpe lisanga ya misato ezwaki nzela oyo ekenda na mondelo ya Lubwaku ya Tseboyimi, na ngambo ya esobe. \p \v 19 Nzokande, na tango wana, batuli bibende bazalaki lisusu te kati na mokili mobimba ya Isalaele, pamba te bato ya Filisitia balobaki : « Ba-Ebre bakoki kosala te, ezala makonga to matolotolo. » \v 20 Yango wana, bato nyonso ya Isalaele bazalaki kokende epai ya bato ya Filisitia mpo na kotia minu na basonge ya bibende oyo bangombe etimolaka na yango mabele, na bapiki, na bipasola mpe na bapawu. \v 21 Bongo mpo na kotia minu yango na bapawu, na bapiki mpe na bipasola, bazalaki kofuta bagrame mwambe ya mbongo ya bibende. \v 22 Boye, na mokolo ya bitumba, soda ata moko te oyo azalaki elongo na Saulo mpe na Jonatan azalaki na mopanga to na likonga na loboko na ye ; kaka Saulo mpe Jonatan, mwana na ye ya mobali, nde bazalaki na yango. \v 23 Limpinga moko ya basoda ya Filisitia eyaki kotelema na kati-kati ya lubwaku ya Mikimasi. \c 14 \s1 Jonatan alongi bato ya Filisitia \p \v 1 Mokolo moko, Jonatan, mwana mobali ya Saulo, alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Yaka ! Tokatisa na ngambo mosusu epai wapi bato ya Filisitia bazali. » \p Kasi alobaki ata likambo moko te epai ya tata na ye. \p \v 2 Saulo avandaki na mondelo ya engumba Gibea, na se ya nzete ya grenade oyo ezali na Migironi, elongo na basoda pene nkama motoba. \v 3 Kati na bango, ezalaki na Nganga-Nzambe moko oyo azalaki kolata efode ; kombo na ye ezalaki « Ayiya. » Ayiya azalaki mwana mobali ya Ayitubi, ndeko mobali ya I-Kabodi, mwana mobali ya Fineasi mpe koko ya Eli oyo azalaki Nganga-Nzambe ya Yawe, na Silo. Soda moko te ayebaki ete Jonatan akendeki. \p \v 4 Na bangambo ya se ya lubwaku oyo Jonatan asengelaki kokatisa mpo na kokende kobundisa bato ya Filisitia, ezalaki na libanga moko na ngambo moko na moko. Babengaki moko Botsetsi, mpe mosusu, Sene. \v 5 Libanga moko etelemaki na ngambo ya nor, na nzela oyo ekenda na Mikimasi, mpe mosusu etalanaki na Geba, na sude. \p \v 6 Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : \pi1 — Yaka ! Tokende na molako ya bato oyo bakatama ngenga te. Tango mosusu Yawe akosala mpo na biso, pamba te eloko moko te ekoki kopekisa Yawe kobikisa, ezala na nzela ya bato ebele to ya bato moke. \p \v 7 Elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye azongisaki : \pi1 — Sala nyonso oyo ozali na yango na makanisi. Kende ! Nazali elongo na yo na motema mpe na molimo. \p \v 8 Jonatan alobaki na ye : \pi1 — Tokende kino na molako ya basoda yango mpe tomimonisa epai na bango. \v 9 Soki balobi na biso : « Botelema wana, bozela kino biso moko tokoya epai na bino ; » wana tokovanda na esika oyo tozali mpe tokokende epai na bango te. \v 10 Kasi soki balobi na biso : « Boya epai na biso, » tokokende epai na bango, pamba te yango ekozala elembo mpo na biso ete Yawe akabi bango na maboko na biso. \p \v 11 Boye, bango mibale bamimonisaki na molako ya bato ya Filisitia. Mpe tango bato ya Filisitia bamonaki bango, balobaki : « Botala ! Ba-Ebre babimi wuta na mabulu epai wapi babombamaki. » \v 12 Balobaki na Jonatan mpe na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Boya epai na biso, tokoteya bino likambo moko. » \p Jonatan alobaki na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye : « Landa ngai na sima, pamba te Yawe asili kokaba bango na maboko ya Isalaele. » \p \v 13 Jonatan asalelaki makolo mpe maboko na ye mpo na komata, mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye alandaki ye na sima. Wana Jonatan azalaki kokweyisa bato ya Filisitia na liboso ; na sima na ye, elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki koboma bango. \v 14 Na etumba oyo ya liboso, Jonatan elongo na elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye babomaki bato pene tuku mibale, na etando oyo bangombe mibale ekoki kobalola na mokolo moko. \p \v 15 Mpe kobanga makasi ekotaki kati na molako, kati na etando mpe kati na bato nyonso : ezala basoda oyo bazalaki kokengela molako mpe basoda ya mpiko, bango nyonso bakomaki kobanga makasi mpe mabele eninganaki. Ezalaki somo oyo Ye moko Nzambe atindaki. \s1 Bato ya Isalaele bakimisi bato ya Filisitia \p \v 16 Bakengeli ya Saulo, oyo bazalaki na Gibea ya Benjame bamonaki mampinga kopalangana na bangambo nyonso. \v 17 Bongo Saulo alobaki na basoda oyo bazalaki elongo na ye : « Botanga basoda mpo na koyeba banani basili kokima. » \p Tango batangaki, bamonaki ete Jonatan mpe elenge mobali oyo azalaki komema bibundeli na ye bazali te. \p \v 18 Saulo alobaki na Ayiya : « Boya na Sanduku ya Nzambe. » \p Pamba te na tango wana, Sanduku ya Nzambe ezalaki elongo na bato ya Isalaele. \p \v 19 Wana Saulo azalaki nanu kosolola na Nganga-Nzambe, mobulu ezalaki kaka kokoma makasi kati na molako ya bato ya Filisitia. Boye Saulo alobaki na Nganga-Nzambe : « Tika ! Kotuna Yawe ezali lisusu na tina te. » \p \v 20 Bongo Saulo elongo na bato na ye nyonso basanganaki mpe bakendeki na bitumba ; bamonaki ete bato ya Filisitia bazali na mobulu makasi, bazali kobomana bango na bango na mipanga. \v 21 Ba-Ebre oyo basalelaki liboso bato ya Filisitia mpe bakendeki elongo na bango na bitumba mosusu, bango basanganaki na bato ya Isalaele, oyo bazalaki elongo na Saulo mpe Jonatan. \v 22 Tango bato nyonso ya Isalaele oyo babombamaki kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi bayokaki ete bato ya Filisitia bazali kokima, bango mpe balandaki mpe babundisaki bato ya Filisitia. \v 23 Ezalaki ndenge wana nde Yawe abikisaki na mokolo wana bato ya Isalaele, mpe bitumba ekobaki kino ekatisaki Beti-Aveni. \s1 Basoda ya Isalaele babikisi Jonatan \p \v 24 Bato ya Isalaele bazalaki na pasi makasi mokolo wana, pamba te Saulo atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi esangana na bilakeli mabe. Alobaki : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei liboso ete pokwa ekoma, liboso ete ngai nazongisa mabe na mabe na banguna na ngai. » \p Boye moto moko te amekaki kolia. \v 25 Bato nyonso bakotaki na zamba mpe bamonaki mafuta ya nzoyi, na mabele. \v 26 Tango bakotaki na zamba, bamonaki mafuta ya nzoyi kotanga, mpe moko te asimbaki mpe aliaki yango mpo na kotosa ndayi. \v 27 Kasi Jonatan ayokaki te ete tata na ye atiaki bato na se ya mokumba ya ndayi ; apusaki nzete oyo azalaki na yango na loboko, azindisaki yango na mafuta ya nzoyi mpe aliaki yango, elongi na ye engengaki. \v 28 Bongo moko kati na basoda alobaki na ye : \pi1 — Tata na yo atiaki mampinga nyonso na se ya mokumba ya ndayi na koloba : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akolia bilei na mokolo ya lelo. » Yango wana bato nyonso balembi. \p \v 29 Jonatan alobaki : \pi1 — Solo, tata na ngai akotisaki pasi kati na mokili. Botala ndenge nini elongi na ngai engengi ! Ezali mpo ete nalie mwa ndambo ya mafuta ya nzoyi. \v 30 Bongo soki bato na biso baliaki na mokolo ya lelo mafuta ya nzoyi oyo bamonaki epai ya banguna na biso, kokweyisama ya bato ya Filisitia elingaki kozala monene ! \p \v 31 Na mokolo wana, sima na bato ya Isalaele kosilisa koboma bato ya Filisitia wuta na Mikimasi kino na Ayaloni, balembaki makasi. \v 32 Bamibwakaki na bomengo ya bitumba mpe bakamataki biloko oyo : bameme, bangombe mpe bana ngombe. Bakataki yango kingo na mabele mpe baliaki yango na likolo ya makila na yango. \v 33 Moto moko alobaki na Saulo : \pi1 — Tala ! Bato bazali kosala masumu liboso ya Yawe na ndenge bazali kolia nyama na likolo ya makila. \p Saulo alobaki : \pi1 — Bokweyisi kondima ! Botindika sik’oyo libanga moko ya monene kino awa. \m \v 34 Saulo abakisaki : \pi1 Bokende kati na bato mpe boloba na bango ete moko na moko amemela ngai ngombe na ye mpe meme na ye, mpe akata yango kingo na esika oyo. Bongo bokolia yango mpe bokosala masumu te liboso ya Yawe na kolia nyama na likolo ya makila kati na yango. \p Boye moko na moko amemaki ngombe na ye na butu mpe akataki yango kingo na esika yango. \v 35 Bongo Saulo atongaki etumbelo mpo na Yawe ; ezalaki mbala na ye ya liboso ya kosala likambo ya boye. \p \v 36 Saulo alobaki : \pi1 — Tokita mpe tolanda bato ya Filisitia na butu ya lelo, tobebisa bango kino na tongo mpe totika ata moto moko te ya bomoi kati na bango. \p Bato bazongisaki : \pi1 — Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu. \p Kasi Nganga-Nzambe alobaki : \pi1 — Totuna Nzambe na esika oyo. \p \v 37 Boye Saulo atunaki Nzambe : « Nakoki na ngai kokita mpo na kolanda bato ya Filisitia ? Okokaba bango solo na maboko ya bato ya Isalaele ? » \p Kasi Nzambe apesaki ye eyano te na mokolo wana. \p \v 38 Saulo alobaki : \pi1 — Bino nyonso oyo bozali bakambi ya bato, boya awa ! Toluka koyeba lisumu nini oyo esalemi na mokolo ya lelo. \v 39 Na Kombo na Yawe, Mobikisi ya Isalaele, ata ezali Jonatan, mwana na ngai ya mobali, nde asali lisumu yango, asengeli kokufa. \p Kasi kati na bato, moko te alobaki ata liloba moko. \p \v 40 Bongo Saulo alobaki na bato nyonso ya Isalaele : \pi1 — Bozala ngambo moko. Ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali, tokozala ngambo mosusu. \p Bato bazongisaki : \pi1 — Sala nyonso oyo omoni ete ezali malamu. \p \v 41 Bongo Saulo asambelaki Yawe, Nzambe ya Isalaele : « Oh Nzambe, talisa ngai eyano ya malamu. » \p Boye zeke ekweyaki epai ya Jonatan mpe Saulo, mpe bato bazalaki na mbeba te. \v 42 Saulo alobaki : « Bobeta zeke kati na ngai mpe Jonatan, mwana na ngai ya mobali. » \p Mpe zeke ekweyaki epai ya Jonatan. \v 43 Bongo Saulo alobaki na Jonatan : \pi1 — Yebisa ngai likambo oyo osalaki. \p Jonatan alobaki : \pi1 — Namekaki ndambo ya mafuta ya nzoyi na songe ya nzete oyo nazalaki na yango na maboko. Mpe sik’oyo nasengeli kokufa ! \p \v 44 Saulo alobaki : \pi1 — Jonatan, tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi koleka soki okufi te. \p \v 45 Kasi bato balobaki na Saulo : \pi1 — Boni, Jonatan akokufa ! Ye oyo asali ete Isalaele azwa kokangolama monene boye ! Te ! Na Kombo na Yawe, akokufa te ! Suki ya moto na ye ata moko te ekokweya na se, pamba te ezali na lisungi ya Nzambe nde asali makambo oyo na mokolo ya lelo. \p Boye bato babikisaki Jonatan, mpe akufaki te. \v 46 Saulo atikaki kolanda bato ya Filisitia, mpe bato ya Filisitia bazongaki na mboka na bango. \s1 Bitumba oyo Saulo alongaki \p \v 47 Tango Saulo azwaki bokonzi mpo na koyangela Isalaele, abundisaki banguna na bango na bangambo nyonso : Moabi, bato ya Amoni, Edomi, bakonzi ya Tsoba, mpe bato ya Filisitia. Bisika nyonso oyo azalaki kobaluka, azalaki kolonga bato wana. \v 48 Abundisaki na makasi nyonso bato ya Amaleki mpe alongaki bango, akangolaki Isalaele na maboko ya bato oyo bazalaki kobotola bango biloko. \p \v 49 Bana mibali ya Saulo bazalaki : Jonatan, Yishivi mpe Maliki-Shuwa. Azalaki na bana mibale ya basi : ya mokolo, kombo na ye ezalaki « Merabi ; » mpe ya leki, « Mikali. » \v 50 Kombo ya mwasi na ye ezalaki « Ayinoami, » mwana mwasi ya Ayimaatsi. Abineri, mwana mobali ya Neri, Noko ya Saulo, azalaki mokonzi ya mampinga ya Saulo. \v 51 Kishi, tata ya Saulo, mpe Neri, tata ya Abineri, bazalaki bana mibali ya Abieli. \v 52 Na mikolo nyonso ya bomoi ya Saulo, bitumba ezalaki makasi na bato ya Filisitia ; mpe bisika nyonso oyo Saulo azalaki komona bato ya makasi to ya mpiko, azalaki kozwa mpe kokotisa bango kati na mampinga na ye. \c 15 \s1 Yawe aboyi Saulo \p \v 1 Samuele alobaki na Saulo : « Yawe atindaki ngai kopakola yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya bato na Ye, Isalaele. Boye, yoka sik’oyo makambo oyo ewuti epai na Yawe. \v 2 Tala makambo oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : ‹ Nakopesa bato ya Amaleki etumbu mpo na makambo oyo basalaki Isalaele tango bawutaki na Ejipito : bakangelaki Isalaele nzela. \v 3 Kende sik’oyo, bundisa bato ya Amaleki mpe bebisa penza biloko na bango nyonso. Kobatela bango te ; boma mibali mpe basi, bana mpe babebe, bangombe, bantaba mpe bameme, bashamo mpe ba-ane. › » \p \v 4 Boye Saulo abengisaki basoda, mpe atangaki bango na Telayimi : basoda oyo babundaka na makolo, nkoto nkama mibale ; mpe basoda oyo bawutaki na Yuda, nkoto zomi. \v 5 Saulo akendeki kino na engumba ya Amaleki mpe atiaki basoda na bisika ya kobombama, na lubwaku. \v 6 Bongo Saulo alobaki na bato ya Keni : « Bokende na bino, bolongwa na milongo ya bato ya Amaleki mpo ete nabebisa bino te elongo na bango, pamba te bosalelaki bato nyonso ya Isalaele bolamu tango babimaki na Ejipito. » \p Boye bato ya Keni balongwaki na milongo ya bato ya Amaleki. \p \v 7 Saulo abundisaki bato ya Amaleki nzela mobimba, longwa na Avila kino na Shuri, na ngambo ya este ya Ejipito. \v 8 Akangaki ya bomoi Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki, mpe abebisaki bato nyonso na mopanga. \v 9 Kasi Saulo mpe basoda babatelaki Agagi elongo na bibwele oyo elekaki kitoko kati na bameme, bantaba mpe bangombe, bibwele oyo eleki minene, bana meme oyo ya minene mpe nyonso oyo ezalaki malamu. Baboyaki kobebisa yango ; babebisaki kaka oyo ezalaki ya mabe mpe ya kokonda. \p \v 10 Yawe alobaki na Samuele : \pi1 \v 11 — Nabongoli makanisi na Ngai na ndenge nakomisaki Saulo mokonzi, pamba te apesi Ngai mokongo mpe aboyi kotosa mitindo na Ngai. \p Samuele asilikaki mpe abelelaki Yawe butu mobimba. \v 12 Na tongo-tongo, Samuele atelemaki mpo na kokende kokutana na Saulo. Kasi bayebisaki ye : « Saulo akei na Karimeli, atongi kuna ekeko mpo na ye moko, bongo alongwe kuna mpe akei kino na Giligali. » \v 13 Samuele akendeki epai ya Saulo, mpe Saulo alobaki na ye : \pi1 — Tika ete Yawe apambola yo ! Natosaki mitindo ya Yawe. \p \v 14 Kasi Samuele alobaki : \pi1 — Makelele oyo nazali koyoka ezali te koganga ya bameme mpe ya bangombe ? \p \v 15 Saulo azongisaki : \pi1 — Basoda babotolaki yango na maboko ya bato ya Amaleki ; babatelaki kati na bibwele bameme mpe bangombe oyo elekaki kitoko mpo ete babonza yango lokola mbeka epai na Yawe, Nzambe na biso ; kasi nyonso wana mosusu, tobebisaki yango penza. \p \v 16 Samuele alobaki na Saulo : \pi1 — Kata ! Tika ete nayebisa yo makambo oyo Yawe alobaki na ngai na butu oyo ewuti koleka. \p Saulo alobaki na ye : \pi1 — Yebisa ngai yango ! \p \v 17 Samuele alobaki : \pi1 — Atako ozalaki komimona moto pamba na miso na yo moko, kasi boni, okomaki te mokonzi ya bikolo ya Isalaele ? Yawe apakolaki yo mafuta mpo ete ozala mokonzi ya Isalaele. \v 18 Yawe apesaki yo etinda mpe alobaki : « Kende mpe bebisa penza bato oyo ya masumu, bato ya Amaleki ; bundisa bango kino okosilisa koboma bango. » \v 19 Mpo na nini otosaki Yawe te ? Mpo na nini owelaki kozwa bomengo ya bitumba, mpe osalaki mabe na miso ya Yawe ? \p \v 20 Saulo azongiselaki Samuele : \pi1 — Ngai natosaki Yawe, nakokisaki etinda oyo apesaki ngai : Nabebisaki penza bato ya Amaleki, namemaki kutu Agagi, mokonzi na bango. \v 21 Kasi basoda bazwaki kati na bomengo ya bitumba bameme mpe bangombe oyo elekaki malamu kati na oyo Nzambe asengaki ete ebebisama, mpo ete babonza yango lokola mbeka epai na Yawe, Nzambe na yo, na Giligali. \p \v 22 Samuele alobaki : \pi1 — Boni, Yawe asepelaka mingi na bambeka ya kotumba mpe na makabo koleka kotosa mongongo na Ye ? Te ! Botosi eleki mbeka ; koyoka eleki mafuta ya meme ya mobali. \v 23 Pamba te botomboki ekokani na lisumu ya kosambela banzambe ya bikeko. Lokola obwaki Liloba na Yawe, Ye mpe abwaki yo ; ozali lisusu mokonzi te. \p \v 24 Bongo Saulo alobaki na Samuele : \pi1 — Nasali lisumu, nabuki mobeko ya Yawe mpe malako na Ye. Nabangaki bato, yango wana natosaki bango. \v 25 Sik’oyo nabondeli yo, limbisa masumu na ngai ; mpe zonga elongo na ngai, mpo ete nakoka kogumbamela Yawe. \p \v 26 Kasi Samuele alobaki na Saulo : \pi1 — Nakozonga elongo na yo te ; pamba te lokola obwakaki Liloba na Yawe, Yawe mpe abwaki yo mpe ozali lisusu mokonzi ya Isalaele te. \p \v 27 Lokola Samuele abalukaki mpo na kokende, Saulo akangaki ye na songe ya kazaka na ye, mpe kazaka epasukaki. \v 28 Bongo Samuele alobaki na ye : \pi1 — Na mokolo ya lelo, Yawe abotoli yo bokonzi kati na Isalaele mpe apesi yango epai ya moko kati na baninga na yo, oyo azali malamu koleka yo. \v 29 Ye oyo azali nkembo ya Isalaele akosaka te mpe abongolaka makanisi na Ye te, pamba te azali moto te mpo ete abongola makanisi na Ye. \p \v 30 Saulo alobaki : \pi1 — Nasali lisumu. Kasi, sik’oyo, nabondeli yo : pesa ngai lokumu liboso ya bampaka ya bato na ngai mpe liboso ya Isalaele, zonga elongo na ngai mpo ete nakoka kogumbamela Yawe, Nzambe na yo. \p \v 31 Boye Samuele akendeki elongo na Saulo, mpe Saulo agumbamelaki Yawe. \v 32 Kasi Samuele alobaki na ye : « Memela ngai Agagi, mokonzi ya bato ya Amaleki. » \p Agagi ayaki na esengo, pamba te azalaki komilobela : « Solo, pasi ya kufa elongwe mpe ekeyi mosika na ngai. » \p \v 33 Kasi Samuele alobaki : « Ndenge mopanga na yo ezangisaki basi bana na bango, ndenge wana mpe mama na yo, kati na basi, akozanga mwana mobali. » \p Boye, Samuele abomaki Agagi liboso ya Yawe, na Giligali. \p \v 34 Bongo Samuele azongaki na Rama, mpe Saulo akendeki na ndako na ye, na Gibea ya Saulo. \p \v 35 Kino na mokolo oyo Samuele akufaki, atikalaki komona lisusu Saulo te. Samuele asalaki matanga mpo na Saulo. Mpe Yawe ayokaki mawa na ndenge akomisaki Saulo mokonzi ya Isalaele. \c 16 \ms1 Saulo mpe Davidi \s1 Samuele apakoli Davidi mafuta \p \v 1 Yawe alobaki na Samuele : \pi1 — Kino tango nini okosala matanga mpo na Saulo ? Ngai, nasilaki kobwaka ye mpo ete azala lisusu mokonzi ya Isalaele te. Tondisa sik’oyo liseke na yo na mafuta mpe kende. Natindi yo epai ya Izayi ya Beteleemi, pamba te naponi moko kati na bana na ye ya mibali mpo ete azala mokonzi. \p \v 2 Samuele alobaki : \pi1 — Nakokende ndenge nini ? Soki Saulo ayoki bongo akoboma ngai. \p Yawe azongiselaki ye : \pi1 — Kamata mwana ngombe ya mwasi elongo na yo mpe loba : « Nakeyi kobonzela Yawe mbeka. » \v 3 Bongo tango okotumba mbeka, okobengisa Izayi ; mpe Ngai moko nakolakisa yo nini oyo osengeli kosala. Moto oyo nakolakisa yo, okopakola ye mafuta mpo na Ngai. \p \v 4 Samuele asalaki makambo oyo Yawe alobaki. Tango akomaki na Beteleemi, bampaka ya engumba balengaki tango bakutanaki na ye. Batunaki ye : \pi1 — Boni, koya na yo ezali ya kimia ? \p \v 5 Samuele azongisaki : \pi1 — Solo, koya na ngai ezali ya kimia. Nayei mpo na kobonzela Yawe mbeka. Bomibulisa mpe boya kotumba mbeka elongo na ngai. \p Bongo abulisaki Izayi elongo na bana na ye ya mibali mpe abengisaki bango na kotumba mbeka elongo na ye. \p \v 6 Tango bakomaki, Samuele atalaki Eliabi mpe amilobelaki : « Solo, mopakolami na Yawe atelemi awa liboso na Ye. » \p \v 7 Kasi Yawe alobaki na Samuele : \pi1 — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema. \p \v 8 Bongo Izayi abengisaki Abinadabi mpe alekisaki ye liboso ya Samuele. Kasi Samuele alobaki : « Ezali ye te nde Yawe aponi. » \p \v 9 Izayi alekisaki lisusu Shama liboso ya Samuele, kasi Samuele alobaki : « Ezali ye te nde Yawe aponi. » \p \v 10 Izayi alekisaki liboso ya Samuele bana sambo na ye ya mibali. Kasi Samuele alobaki na ye : « Yawe aponi moko te kati na bango. » \p \v 11 Bongo Samuele atunaki Izayi : \pi1 — Boni, bana na yo ya mibali bakoki bango nyonso ? \p Izayi azongisaki : \pi1 — Te ! Ezali lisusu na moko oyo aleki bolenge, kasi azali koleisa bampate. \p Samuele alobaki : \pi1 — Bengisa ye, pamba te tokovanda na mesa te soki akomi nanu te. \p \v 12 Boye, Izayi atindaki bato mpo na kobenga ye, mpe bayaki na ye. Langi ya poso ya nzoto na ye ezalaki kitoko ; azalaki na miso kitoko mpe elobeli ya malamu. Bongo Yawe alobaki na Samuele : « Telema mpe pakola ye mafuta, pamba te ezali nde ye. » \p \v 13 Boye Samuele azwaki liseke ya mafuta mpe apakolaki ye na miso ya bandeko na ye ya mibali. Banda mokolo wana, Molimo na Yawe akitelaki Davidi na nguya. Mpe Samuele azongaki na Rama. \s1 Davidi kati na mosala epai ya Saulo \p \v 14 Molimo na Yawe alongwaki na Saulo, mpe molimo mabe kowuta na Yawe etungisaki ye. \v 15 Basali ya Saulo bayebisaki ye : \pi1 — Tala, molimo moko ya mabe ewuti na Yawe mpe ezali kotungisa yo. \v 16 Tika ete nkolo na biso atinda basali na ye, oyo bazali awa mpo ete balukela ye moto moko oyo ayebi kobeta lindanda. Wana molimo mabe oyo ewuti na Yawe ekoya kotungisa yo, ye akobeta lindanda na ye, mpe yo okoyoka nzoto malamu. \p \v 17 Boye Saulo alobaki na basali na ye : \pi1 — Bolukela ngai moto moko oyo ayebi kobeta lindanda malamu, mpe boya na ye epai na ngai. \p \v 18 Moko kati na basali na ye azongisaki : \pi1 — Namoni mwana mobali moko ya Izayi ya Beteleemi, oyo ayebi penza kobeta lindanda. Azali soda ya mpiko mpe elombe ya bitumba, alobaka kitoko mpe azali mwana mobali moko ya kitoko penza ; Yawe mpe azalaka elongo na ye. \p \v 19 Saulo atindaki bantoma epai ya Izayi mpo na koloba na ye : « Tindela ngai Davidi, mwana na yo ya mobali, oyo azali koleisa bampate. » \p \v 20 Izayi azwaki ane moko ; atiaki na likolo na yango mapa, mbeki moko ya vino mpe mwana ntaba, mpe atindaki yango epai ya Saulo elongo na Davidi, mwana na ye ya mobali. \v 21 Davidi ayaki epai ya Saulo mpe akomaki kosala epai na ye. Saulo alingaki ye makasi, mpe Davidi akomaki komemela Saulo bibundeli. \v 22 Saulo atindaki maloba epai ya Izayi : « Nabondeli yo, tika ete Davidi akoba kosala epai na ngai, pamba te nazali kosepela na ye. » \p \v 23 Tango nyonso molimo mabe kowuta na Nzambe ezalaki koya kotungisa Saulo, Davidi azalaki kozwa lindanda na ye mpe kobeta yango. Mpe pema ya Saulo ezalaki kokita, azalaki koyoka nzoto malamu, mpe molimo mabe yango ezalaki kolongwa kati na ye. \c 17 \s1 Davidi mpe Goliati \p \v 1 Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango mpo na bitumba, basanganaki na Soko ya Yuda mpe batongaki molako na bango na Efeze-Damimi, kati na Soko mpe Azeka. \p \v 2 Na ngambo mosusu, Saulo mpe bato ya Isalaele basanganaki mpe batongaki molako na bango kati na lubwaku ya Terebente ; batandamaki na milongo mpe babongamaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia. \v 3 Bato ya Filisitia bazalaki na likolo ya ngomba na ngambo moko, mpe bato ya Isalaele, na likolo ya ngomba na ngambo mosusu ; kaka lubwaku nde ekabolaki bango. \p \v 4 Elombe mobali moko oyo kombo na ye ezalaki « Goliati, » moto ya mboka Gati, abimaki wuta na molako ya bato ya Filisitia. Azalaki na bametele pene misato na molayi. \v 5 Alataki ekoti ya bronze na moto na ye mpe ebombelo ya tolo, oyo basala na bakilo pene tuku motoba ya bronze. \v 6 Na makolo na ye, alataki bitando ya bronze, mpe akangisaki likonga ya bronze na sima ya mokongo na ye. \v 7 Monene ya nzete ya likonga na ye ezalaki lokola libaya oyo basali bilamba basalelaka ; songe ya likonga yango ezalaki ya bakilo pene sambo. Moto oyo azalaki komema bibundeli na ye azalaki kotambola liboso na ye. \p \v 8 Goliati atelemaki mpe agangelaki mampinga ya Isalaele, alobaki : « Mpo na nini bobimi mpe bosali milongo mpo na bitumba ? Ngai nazali moto ya Filisitia te ? Mpe bino bozali basali ya Saulo te ? Bopona moto moko mpe botika ye koya kobundisa ngai. \v 9 Soki akokoka kolonga mpe koboma ngai, wana biso tokokoma bawumbu na bino. Nzokande soki ngai nalongi mpe nabomi ye, wana bino nde bokokoma bawumbu na biso mpe bokosalela biso. » \v 10 Moto ya Filisitia alobaki lisusu : « Na mokolo ya lelo, nazali kotiola mampinga ya Isalaele. Bopesa ngai moto moko mpo ete nabunda na ye. » \p \v 11 Tango bayokaki maloba ya moto ya Filisitia, Saulo mpe bato nyonso ya Isalaele bakomaki na mawa mpe babangaki. \p \v 12 Davidi azalaki mwana mobali ya moto moko ya Efrate, oyo kombo na ye ezalaki « Izayi. » Izayi awutaki na Beteleemi ya Yuda mpe azalaki na bana mibali mwambe. Na tango Saulo azalaki mokonzi, Izayi akomaki mobange mpo ete mibu na ye ya mbotama epusanaki makasi. \v 13 Bana mibali misato ya liboso ya Izayi balandaki Saulo na bitumba. Tala bakombo ya bana mibali yango misato oyo balandaki Saulo na bitumba : Eliabi, mwana mobali ya liboso ; Abinadabi, mwana mobali ya mibale ; mpe Shama, mwana mobali ya misato. \v 14 Lokola Davidi azalaki leki, mpe wana bana mibali misato ya liboso balandaki Saulo, \v 15 Davidi azalaki kokende mpe kozonga wuta na ndako ya Saulo mpo na koleisa bameme ya tata na ye na Beteleemi. \p \v 16 Mikolo tuku minei, moto ya Filisitia azalaki komilakisa, tongo mpe pokwa, liboso ya mampinga ya Isalaele. \v 17 Izayi alobaki na Davidi, mwana na ye ya mobali : « Zwela bandeko na yo ya mibali bambuma oyo ya ble bakalinga mpe mapa oyo zomi, mpe kende kotikela bango yango na lombangu na molako na bango. \v 18 Mema lisusu ba-fromaje zomi oyo epai ya mokonzi ya limpinga ya basoda nkoto moko, limpinga oyo bango bazali. Tala soki bandeko na yo ya mibali bazali ndenge nini mpe zwa na maboko na bango elembo oyo ekolakisa ngai ete bazali malamu. \v 19 Bazali na lubwaku ya Terebente\f + \fr 17.19 \fr*\ft Na mikanda mosusu, bakoma : Lubwaku ya Ela\ft*\f* elongo na Saulo mpe mibali nyonso ya Isalaele mpo na kobundisa bato ya Filisitia. » \p \v 20 Na tongo-tongo ya mokolo oyo elandaki, Davidi atikaki bameme na maboko ya mokengeli moko ; akamataki mikumba na ye mpe akendeki, ndenge kaka Izayi ayebisaki ye ; akomaki na molako tango mampinga ya Isalaele ezalaki komibongisa na milongo mpo na kobunda bitumba, mpe ezalaki kobeta milolo ya bitumba. \p \v 21 Bato ya Isalaele mpe bato ya Filisitia batandamaki mpe batalanaki ngambo na ngambo mpo na kobunda. \v 22 Davidi akitisaki mikumba na ye, apesaki yango na maboko ya mobateli mikumba, akimaki mbangu na esika ya bitumba mpe apesaki bandeko na ye ya mibali mbote. \v 23 Wana Davidi azali kosolola na bango, elombe mobali Goliati, moto ya Filisitia ya Gati, alongwaki na molongo ya mampinga na ye mpe azongelaki koloba ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Davidi azalaki koyoka ye. \v 24 Kasi tango bato nyonso ya Isalaele bamonaki mobali yango, bakimaki liboso na ye na kobanga makasi. \p \v 25 Moko na moko kati na bato ya Isalaele akomaki koloba : « Bozali na bino komona mobali oyo ndenge azali kobima mpo na koya epai na biso ? Azali nde koya kotiola Isalaele ! Mokonzi akopesa bomengo ebele epai ya moto oyo akoboma ye, akopesa ye mwana na ye ya mwasi na libala mpe akosalela libota ya tata na ye bolamu kati na Isalaele. » \p \v 26 Davidi atunaki mibali oyo bazalaki pembeni na ye : \pi1 — Eloko nini bakosala na moto oyo akoboma moto ya Filisitia oyo mpe akolongola soni kati na Isalaele ? Moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te azali nani mpo ete atiola mampinga ya Nzambe na bomoi ? \p \v 27 Lokola bato bazalaki kozongela kaka maloba moko, balobaki na ye : \pi1 — Tala makambo oyo ekosalemela moto oyo akoboma ye. \p \v 28 Tango Eliabi, kulutu ya Davidi, ayokaki ye koloba na bato yango, asilikelaki ye makasi mpe atunaki : \pi1 — Oyaki awa mpo na nini ? Mpe na maboko ya nani otikaki mwa bameme na biso kati na esobe ? Nayebi ndenge lolendo na yo ezalaka mpe ndenge nini ozalaka mayele mabe. Oyei na yo kaka mpo na kotala bitumba. \p \v 29 Davidi azongiselaki ye : \pi1 — Nasali nini ? Nakoki kosolola lisusu te ? \p \v 30 Bongo Davidi abalukaki mpo na kosolola na moto mosusu mpe atunaki kaka likambo moko wana. Mpe bazongiselaki ye ndenge kaka moto ya liboso alobaki na ye. \p \v 31 Maloba ya Davidi epanzanaki na lombangu, mpe bayebisaki yango Saulo. Mpe sima na Saulo koyoka yango, abengisaki ye. \p \v 32 Davidi alobaki na Saulo : \pi1 — Tika ete moto moko te amilembisa nzoto likolo na moto oyo ya Filisitia. Mosali na yo akokende kobundisa ye. \p \v 33 Kasi Saulo alobaki na Davidi : \pi1 — Okoki te kokende kobundisa moto wana ya Filisitia ! Ozali mwana moke, nzokande ye azali mobundi ya bitumba wuta bolenge na ye. \p \v 34 Davidi azongiselaki Saulo : \pi1 — Mosali na yo azalaki kobatela bameme ya tata na ye. Tango ngombolo to nkosi ezalaki koya kokamata meme moko kati na etonga, \v 35 nazalaki kolanda mpe kobeta yango, nazalaki kokangola mpe kobotola meme na monoko ya tambwe to ya nkosi yango. Tango ezalaki kobalukela ngai, nazalaki kokanga yango, kobeta mpe koboma yango. \v 36 Lokola mosali na yo abomaki ezala ngombolo to nkosi, akoboma mpe moto ya Filisitia oyo akatama ngenga te lokola moko kati na banyama wana, pamba te atioli mampinga ya Nzambe na bomoi. \p \v 37 Yawe oyo akangolaki ngai na manzaka ya ngombolo mpe ya nkosi akokangola ngai na maboko ya moto ya Filisitia oyo. \p Saulo alobaki na Davidi : \pi1 — Kende, mpe tika ete Yawe azala elongo na yo. \p \v 38 Bongo Saulo alatisaki Davidi bibundeli na ye moko : atiaki ye ekoti ya bronze na moto mpe alatisaki ye ebombelo ya tolo. \p \v 39 Na likolo ya elamba ya ebende, Davidi atiaki lisusu, na mokaba na ye, mopanga ya Saulo ; mpe amekaki kotambola na yango, pamba te atikalaki nanu komesana na yango te. \p Davidi alobaki na Saulo : \pi1 — Nakokoka te kotambola na biloko oyo nyonso, pamba te namesana na yango te ! \p Bongo Davidi alongolaki yango na nzoto na ye. \v 40 Asimbaki kaka lingenda na ye na loboko, aponaki mabanga mitano ya moselu kati na moluka ya lubwaku mpe atiaki yango na libenga na ye ya mobateli bibwele ; asimbaki ebambelo mabanga na loboko mpe apusanaki epai ya moto ya Filisitia. \p \v 41 Kaka na tango yango, moto ya Filisitia elongo na moto oyo amemelaki ye nguba bapusanaki pene ya Davidi ; moto oyo amemaki nguba nde azalaki liboso. \v 42 Tango moto ya Filisitia atalaki mpe amonaki Davidi, atiolaki ye ; pamba te azalaki na ye kaka mwa elenge mobali oyo azalaki na poso kitoko ya nzoto mpe na elongi kitoko. \v 43 Moto ya Filisitia alobaki na Davidi : \pi1 — Boni, ngai nazali mbwa mpo ete oya kobundisa ngai na lingenda ? \p Bongo alakelaki Davidi mabe na nzela ya banzambe na ye. \p \v 44 Moto ya Filisitia alobaki lisusu na Davidi : \pi1 — Pusana awa, nakopesa mosuni na yo epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya zamba. \p \v 45 Davidi alobaki na moto ya Filisitia : \pi1 — Ozali koya kobundisa ngai na mopanga, na likonga ya monene mpe na likonga ya moke. Kasi ngai nayei kobundisa yo na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe ya mampinga ya Isalaele, oyo yo ozali kotiola. \v 46 Na mokolo ya lelo, Yawe akokaba yo na maboko na ngai ; nakoboma yo mpe nakokata moto na yo. Na mokolo ya lelo kaka, nakopesa bibembe ya mampinga ya Filisitia epai ya bandeke ya likolo mpe epai ya banyama ya mokili ; mpe mokili mobimba ekoyeba ete ezali na Nzambe moko kati na Isalaele. \v 47 Bato nyonso oyo basangani awa bakoyeba ete ezali na mopanga te to na likonga ya monene te nde Yawe abikisaka. Pamba te bitumba ezali ya Yawe, mpe Ye akokaba bino na maboko na biso. \p \v 48 Wana moto ya Filisitia amibongisaki mpo na kokende kobundisa Davidi, Davidi akimaki mbangu na molongo ya liboso ya bitumba mpo na kokutana na moto ya Filisitia. \v 49 Davidi akotisaki loboko na ye kati na libenga na ye, azwaki libanga moko mpe abambaki yango na nzela ya ebambelo na ye ya mabanga ; abetaki moto ya Filisitia na elongi. Libanga ekotaki kati na elongi ya moto ya Filisitia, mpe akweyaki elongi kino na mabele. \v 50 Boye, Davidi alongaki moto ya Filisitia na nzela ya ebambelo mabanga na ye mpe na nzela ya libanga moko. Davidi abetaki moto ya Filisitia mpe abomaki ye, azalaki ata na mopanga te na loboko na ye. \p \v 51 Davidi akimaki mbangu mpe atelemaki na likolo ya moto ya Filisitia, asimbaki mopanga ya moto ya Filisitia, abimisaki yango na ebombelo na yango, abomaki ye, mpe akataki moto na ye na nzela ya mopanga yango. \p Tango mampinga ya Filisitia bamonaki ete elombe na bango akufi, bakimaki. \v 52 Bato ya Isalaele mpe bato ya Yuda babimaki na mbala moko, bagangaki mpe balandaki bato ya Filisitia kino na ebandeli ya lubwaku mpe kino na bikuke ya Ekroni. Bibembe ya bato ya Filisitia etandamaki na nzela oyo ekenda na Shaarayimi kino na Gati mpe kino na Ekroni. \v 53 Tango bato ya Isalaele batikaki kolanda bato ya Filisitia, bazongaki mpo na kozwa na makasi biloko oyo ezalaki kati na molako ya bato ya Filisitia. \v 54 Davidi azwaki moto ya moto ya Filisitia mpe amemaki yango na Yelusalemi ; bongo azwaki bibundeli ya moto ya Filisitia mpe atiaki yango kati na ndako na ye ya kapo. \p \v 55 Tango Saulo amonaki Davidi kokende kobundisa moto ya Filisitia, atunaki Abineri, mokonzi ya mampinga : \pi1 — Elenge mobali oyo azali mwana ya nani ? \p Abineri azongisaki : \pi1 — Na kombo na yo mokonzi, nayebi te. \p \v 56 Mokonzi alobaki : \pi1 — Tuna mpo na koyeba soki elenge mobali oyo azali mwana ya nani ? \p \v 57 Tango kaka Davidi azongaki sima na ye koboma moto ya Filisitia, Abineri azwaki ye mpe amemaki ye na liboso ya Saulo. Davidi asimbaki na loboko na ye moto ya moto ya Filisitia. \v 58 Saulo atunaki Davidi : \pi1 — Ozali mwana ya nani ? \p Elenge mobali Davidi azongisaki : \pi1 — Nazali mwana ya mosali na yo, Izayi, moto ya Beteleemi. \c 18 \s1 Boyokani ya Davidi elongo na Jonatan \p \v 1 Tango kaka Davidi asilisaki kosolola na Saulo, Jonatan akangamaki na Davidi mpe alingaki ye lokola ye moko. \v 2 Kobanda mokolo wana, Saulo avandisaki Davidi kati na ndako na ye mpe atikaki ye te kozonga na ndako ya tata na ye. \v 3 Jonatan asalaki boyokani elongo na Davidi, pamba te alingaki ye lokola ye moko. \v 4 Jonatan alongolaki kazaka oyo azalaki kolata mpe apesaki yango na Davidi. Apesaki ye mpe bilamba na ye, mopanga na ye, mokaba na ye mpe eloko na ye oyo abetelaka tolotolo. \v 5 Lokola Davidi azalaki penza kosala malamu mosala nyonso oyo Saulo azalaki kotinda ye na bisika nyonso, Saulo akomisaki ye mokonzi monene ya basoda. Bato nyonso elongo na basali ya Saulo bazalaki kosepela na ye. \p \v 6 Sima na Davidi koboma moto ya Filisitia, tango basoda bazalaki kozonga wuta na bitumba, basi babimaki wuta na bingumba nyonso ya Isalaele mpo na kokende koyamba mokonzi Saulo, na banzembo ya esengo mpe na mabina, na milolo ya esengo, na bambunda mike mpe na bangonga. \v 7 Basi bazalaki kobina mpe koyemba boye : \q1 « Saulo abomaki bankoto, \q2 mpe Davidi abomaki bankoto zomi. » \p \v 8 Maloba ya banzembo yango epesaki Saulo kanda makasi. Amilobelaki : « Soki batangi motango ya nkoto zomi mpo na Davidi, mpe motango ya nkoto moko mpo na ngai, elingi koloba ete etikali na ye kaka kozwa bokonzi ! » \p \v 9 Kobanda mokolo wana, Saulo akomaki kotala Davidi miso mabe. \p \v 10 Mokolo oyo elandaki, molimo moko ya mabe kowuta na Nzambe ekitelaki Saulo, mpe akomaki kotuntuka kati na ndako na ye, wana Davidi azalaki kobeta lindanda na ye ndenge azalaki kosala mikolo nyonso. Saulo asimbaki likonga na ye na loboko. \v 11 Mbala moko, Saulo abwakaki likonga na ye na koloba : « Nakobamba Davidi na mir. » \p Kasi Davidi akimaki ye mbala mibale. \p \v 12 Saulo abangaki Davidi, pamba te Yawe azalaki elongo na Davidi kasi atikaki Saulo. \v 13 Mpo na yango, Saulo alongolaki Davidi pembeni na ye mpe akomisaki ye mokonzi ya basoda nkoto moko. Boye Davidi akomaki kotambolisa basoda na bitumba na bango. \v 14 Na nyonso oyo azalaki kosala, Davidi azalaki kolonga, pamba te Yawe azalaki elongo na ye. \v 15 Tango Saulo amonaki ete Davidi azali kolonga mingi, abangaki ye. \v 16 Kasi Isalaele mobimba mpe Yuda mobimba bazalaki kolinga Davidi mpo ete azalaki kotambolisa bango na bitumba na bango. \s1 Libala ya Davidi \p \v 17 Saulo alobaki na Davidi : \pi1 — Tala Merabi, mwana na ngai ya liboso ya mwasi ! Nakopesa yo ye na libala soki kaka osali epai na ngai lokola soda ya mpiko mpe obundi bitumba ya Yawe. \p Nzokande Saulo azalaki komilobela : « Tika ete loboko na ngai eboma ye te, kasi ezala nde loboko ya bato ya Filisitia. » \p \v 18 Davidi azongiselaki Saulo : \pi1 — Ngai nazali nani, libota na ngai nde nini, etuka ya tata na ngai nde nini kati na Isalaele mpo ete nakoma bokilo ya mokonzi ? \p \v 19 Boye, tango ngonga ya kobalisa Merabi, mwana mwasi ya Saulo, epai ya Davidi ekokaki, Saulo abalisaki ye epai ya Adriyeli, moto ya Meola. \p \v 20 Nzokande Mikali, mwana mwasi ya Saulo, azalaki kolinga Davidi. Mpe tango bayebisaki Saulo likambo yango, asepelaki makasi. \v 21 Boye Saulo amilobelaki : « Nakobalisa Mikali epai ya Davidi, mpo ete azala motambo mpo na ye, mpe ete loboko ya bato ya Filisitia ekanga ye Davidi. » \p Boye Saulo alobaki na Davidi : « Ozwi sik’oyo libaku ya mibale ya kokoma bokilo na ngai. » \p \v 22 Bongo Saulo apesaki mitindo epai ya basali na ye : « Bosolola na Davidi na nkuku mpe boyebisa ye : ‹ Tala ndenge nini mokonzi azali kosepela na yo, mpe basali na ye nyonso balingi yo ! Koma na yo sik’oyo bokilo na ye ! › » \p \v 23 Basali ya Saulo bazongelaki maloba oyo epai ya Davidi, kasi Davidi alobaki : « Bokanisi ete kokoma bokilo ya mokonzi ezali likambo ya pete ? Kaka ngai oyo nazali mobola mpe moto pamba ! » \p \v 24 Basali ya Saulo bayebisaki ye maloba ya Davidi. \p \v 25 Saulo alobaki : « Boloba na Davidi ete mokonzi asengi mbongo ya libala te, kasi bangenga nkama moko ya nzoto ya mibali kati na bato ya Filisitia mpo na kozongisa mabe na mabe epai ya banguna na ye. » \p Makanisi ya Saulo ezalaki ya komona Davidi kokweya na maboko ya bato ya Filisitia. \p \v 26 Tango basali bayebisaki Davidi makambo yango, Davidi asepelaki kokoma bokilo ya mokonzi. Boye liboso ete tango oyo bakataki ekoka, \v 27 Davidi elongo na mampinga na ye babimaki mpe babomaki mibali nkama mibale kati na bato ya Filisitia. Davidi amemaki bangenga na bango, mpe batangaki motango na yango liboso ya mokonzi mpo ete Davidi akoma bokilo ya mokonzi. Boye Saulo apesaki na libala Mikali, mwana na ye ya mwasi, epai ya Davidi. \p \v 28 Tango Saulo amonaki mpe asosolaki ete Yawe azali elongo na Davidi, mpe ete mwana na ye ya mwasi, Mikali, alingaka Davidi, \v 29 Saulo akomaki lisusu kobanga Davidi makasi, mpe akomaki monguna na ye na mikolo ya bomoi na ye, oyo etikalaki. \v 30 Bakonzi ya basoda ya Filisitia bakobaki kobima mpo na kobunda ; mpe tango nyonso bazalaki kosala yango, Davidi azalaki kolonga, koleka bakonzi mosusu ya basoda ya Saulo. Boye kombo na ye ekendeki sango. \c 19 \s1 Saulo aluki koboma Davidi \p \v 1 Saulo ayebisaki mabongisi na ye ya koboma Davidi epai ya mwana na ye, Jonatan, mpe epai ya basali na ye nyonso. Nzokande Jonatan, mwana mobali ya Saulo, azalaki kolinga Davidi makasi. \v 2 Jonatan ayebisaki Davidi : « Tata na ngai, Saulo, azali koluka libaku ya koboma yo. Nabondeli yo, lobi na tongo, zala penza na ekenge ! Kende na yo komibomba mpe vanda kuna. \v 3 Ngai nakobima mpe nakozala elongo na tata na ngai kati na zamba epai wapi yo okozala. Nakoloba na tina na yo epai ya tata na ngai, nakoluka koyeba makambo ndenge ezali mpe nakoyebisa yo. » \p \v 4 Jonatan alobaki malamu na tina na Davidi epai ya tata na ye, Saulo : « Tika ete mokonzi asala mabe te na mosali na ye, Davidi, pamba te asali yo mabe te. Yo nde kutu moto ozwi lisungi monene na makambo oyo ye asali. \v 5 Andimaki kobungisa bomoi na ye tango abomaki moto ya Filisitia, mpe, na mokolo yango, Yawe azwaki elonga monene mpo na Isalaele mobimba. Omonaki yango mpe osepelaki na yango makasi. Sik’oyo, mpo na nini olingi na yo kosala lisumu na tina moko te, na koboma moto lokola Davidi oyo asali na ye likambo te ? » \p \v 6 Saulo ayokaki Jonatan mpe alapaki ndayi boye : « Na Kombo na Yawe, bakoboma Davidi te. » \p \v 7 Bongo Jonatan abengaki Davidi mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo basololaki na tata na ye. Jonatan amemaki Davidi epai ya Saulo, mpe Davidi asalelaki Saulo lokola na ebandeli. \p \v 8 Lokola bitumba ezongelaki, Davidi abimaki mpo na kobundisa bato ya Filisitia mpe alongaki bango na elonga monene, mpe bato ya Filisitia bakimaki liboso na ye. \p \v 9 Kasi molimo moko ya mabe kowuta na Yawe ekitelaki Saulo, wana avandaki kati na ndako na ye mpe asimbaki likonga na loboko na ye. Lokola Davidi azalaki kobeta lindanda, \v 10 Saulo alukaki koboma ye na nzela ya likonga na ye. Kasi Davidi akimaki ye, mpe likonga ekotaki na mir. Na butu wana, Davidi alongaki kokima mpe abikaki. \p \v 11 Saulo atindaki mibali kozonga na ndako ya Davidi mpo na kokengela ye mpe koboma ye na tongo. Kasi mwasi na ye, Mikali, ayebisaki ye : « Soki okimi te na pokwa ya lelo mpo na kobatela bomoi na yo, bakoboma yo lobi ! » \p \v 12 Boye Mikali akitisaki Davidi na nzela ya lininisa, mpe Davidi akimaki mpe abikaki. \v 13 Bongo Mikali azwaki nzambe ya ekeko oyo ezalaki na lolenge ya moto ; alalisaki yango na mbeto, afinikaki yango elamba mpe atiaki yango bapwale ya bantaba na moto. \v 14 Tango Saulo atindaki bato kokanga Davidi, Mikali alobaki : « Azali kobela. » \p \v 15 Saulo azongisaki bato mpo ete batala Davidi mpe alobaki na bango : « Bomemela ngai ye na mbeto na ye mpo ete naboma ye. » \v 16 Kasi tango mibali bakotaki, bamonaki, na likolo ya mbeto, nzambe ya ekeko oyo ezalaki lokola moto mpe ezalaki na bapwale ya bantaba na moto na yango. \v 17 Saulo alobaki na Mikali : \pi1 — Mpo na nini oyokisi ngai soni mpe okimisi monguna na ngai, mpe sik’oyo abiki ? \p Mikali alobaki na Saulo : \pi1 — Davidi alobaki na ngai : « Tika ngai nakima, noki te nakoboma yo. » \p \v 18 Tango Davidi akimaki mpe amibikisaki, akendeki epai ya Samuele, na Rama, mpe ayebisaki ye makambo nyonso oyo Saulo asalaki ye. Bongo ye mpe Samuele bakendeki kovanda na Nayoti, pene ya Rama. \v 19 Sango ekomaki epai ya Saulo : « Davidi azali na Nayoti ya Rama. » \p \v 20 Saulo atindaki bato kokende kokanga Davidi. Kasi tango bamonaki lisanga ya basakoli kosakola mpe Samuele atelemi wana lokola mokambi na bango, Molimo na Nzambe akitelaki bato oyo Saulo atindaki, mpe bakomaki bango mpe kosakola. \v 21 Sango ekomaki epai ya Saulo, mpe ye atindaki bato mosusu ; kasi bango mpe basakolaki. Saulo atindaki bato mosusu na mbala ya misato, kasi bango mpe basakolaki. \p \v 22 Sima, ye moko Saulo akendeki na Rama mpe akomaki na libulu monene ya mayi, na Seku. Atunaki : \pi1 — Samuele mpe Davidi bazali wapi ? \p Bazongiselaki ye : \pi1 — Bazali na Nayoti ya Rama. \p \v 23 Boye Saulo akendeki na Nayoti ya Rama. Kasi ye mpe, wana azalaki kokoba nzela na ye, Molimo na Nzambe akitelaki ye, mpe akomaki kosakola kino akomaki na Nayoti ya Rama. \v 24 Ye mpe alongolaki bilamba na ye mpe asakolaki liboso ya Samuele ; akweyaki mpe atikalaki bolumbu mokolo yango mobimba mpe butu mobimba. Yango wana bato batunaka : « Boni, Saulo mpe azali moko kati na basakoli ? » \c 20 \s1 Davidi mpe Jonatan \p \v 1 Davidi akimaki wuta na Nayoti ya Rama mpe akendeki epai ya Jonatan. Atunaki ye : \pi1 — Nasali nini ? Mabe nini nasali ? Lisumu nini nasali liboso ya tata na yo mpo ete aluka koboma ngai ? \p \v 2 Jonatan azongisaki : \pi1 — Te, Ekosalema te ! Okokufa te ! Tala, tata na ngai asalaka eloko moko te, ezala ya moke to ya monene, soki ayebisi ngai te. Mpo na nini tata na ngai abombela ngai kaka likambo oyo ? Ezali bongo te. \p \v 3 Kasi Davidi alapaki ndayi na koloba : « Tata na yo ayebi malamu ete nazwaki ngolu na miso na yo, mpe amilobelaki : ‹ Tika ete Jonatan ayeba makambo oyo te, noki te akoyoka pasi na motema ! › Nzokande, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo moko, etikali kaka moke ete baboma ngai. » \p \v 4 Jonatan alobaki na Davidi : \pi1 — Nakosala nyonso oyo okolinga ete ngai nasala mpo na yo. \p \v 5 Davidi azongiselaki Jonatan : \pi1 — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika ; nasengelaki kovanda mesa moko na mokonzi mpo na kolia. Pesa ngai nzela ete nakende kobombama na bilanga kino na pokwa ya mokolo ya misato. \v 6 Soki tata na yo amitungisi mpo na kozanga na ngai komonana, okoloba na ye : « Davidi atungisaki ngai ete napesa ye nzela ya kokende noki na engumba na ye, Beteleemi, pamba te etuka mobimba ekosepela kuna mbeka oyo babonzaka mibu nyonso. » \v 7 Soki alobi : « Malamu, » wana mosali na yo akozala na kimia. Kasi soki atomboki na kanda, wana yeba malamu ete azwi mokano ya kosala ngai mabe. \v 8 Boye, salela mosali na yo bolamu, pamba te okotisaki ye na boyokani elongo na yo liboso ya Yawe. Soki nasalaki mabe na likambo songolo, yo moko boma ngai ! Mpo na nini kokaba ngai na maboko ya tata na yo ? \p \v 9 Jonatan alobaki : \pi1 — Te ! Ekozala penza likambo ya nkele soki ngai nakoki koyeba ete tata na ngai azwi mokano ya kosala yo mabe, bongo nayebisi yo yango te ! \p \v 10 Davidi atunaki Jonatan : \pi1 — Bongo soki tata na yo akozongisela yo eyano na kanda, nani akoyebisa ngai ? \p \v 11 Jonatan azongiselaki Davidi : \pi1 — Yaka, tokende na zamba ! \p Boye, bango mibale bakendeki nzela moko na zamba. \v 12 Jonatan alobaki na Davidi : « Na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, lobi to sima na lobi, na ngonga oyo, nakoluka koyeba makanisi ya tata na ngai mpo na yo. Soki ezali malamu, bongo natindi moto te mpo na koyebisa yo yango, \v 13 wana tika ete Yawe asala na ngai Jonatan nyonso oyo ekozala malamu na miso na Ye ! Kasi soki tata na ngai azali na makanisi ya kosala yo mabe, ngai nakoyebisa yo mpe nakotika yo kokende mpo ete okende na yo na kimia. Tika ete Yawe azala elongo na yo ndenge azalaki elongo na tata na ngai ! \v 14 Sima na mikolo, soki nakozala nanu na bomoi, salela ngai bolamu lokola bolamu ya Yawe mpo ete baboma ngai te. \v 15 Mpe kolemba te kosalela libota na ngai bolamu, ata tango Yawe akolongola banguna nyonso ya Davidi, na etando ya mokili. » \p \v 16 Boye Jonatan asalaki boyokani elongo na libota ya Davidi na maloba oyo : « Tika ete Yawe azongisa mabe na mabe na banguna ya Davidi ! » \v 17 Mpe Jonatan asengaki ete Davidi alapa lisusu ndayi na ye na kombo ya bolingo na ye Davidi epai ya Jonatan, pamba te azalaki kolinga ye ndenge ye moko amilingaka. \p \v 18 Bongo Jonatan alobaki na Davidi : \pi1 — Lobi ekozala mokolo ya feti ya Sanza ya Sika ; bato bakomitungisa mpo na yo mpo ete okozala te, mpe bakomona ete esika na yo ekozala pamba. \v 19 Sima na lobi, na pokwa, okokende kino na esika epai wapi obombamaki tango likambo oyo ebandaki mpe okovanda pembeni ya libanga Ezeli. \v 20 Ngai nakobwaka makonga misato na ngambo moko ya libanga yango lokola nde nazali kobwaka na elembo moko. \v 21 Bongo nakotinda elenge mobali moko kokende koluka makonga yango. Soki nalobi na ye : « Tala, makonga ezali pembeni na yo, lokota mpe yaka na yango awa, » wana nalingi koloba : « Na Kombo na Yawe, yaka mpo ete ozali na kimia, likambo ezali te. » \v 22 Kasi soki nalobi na elenge mobali : « Tala, makonga ezali mosika na yo ; » wana nalingi koloba : « Kima na yo, pamba te Yawe akimisi yo. » \v 23 Bongo mpo na liloba oyo tosololaki ngai na yo, yeba ete Yawe azali Motatoli kati na ngai mpe yo mpo na libela. \s1 Saulo akani koboma Davidi \p \v 24 Davidi abombamaki kati na zamba. Bongo na tango ya feti ya Sanza ya Sika, mokonzi avandaki na mesa mpo na kolia. \v 25 Mokonzi avandaki lokola momesano na esika na ye pembeni ya mir. Jonatan atelemaki, mpe Abineri avandaki pembeni ya Saulo, kasi esika ya Davidi ezalaki polele. \v 26 Saulo alobaki eloko moko te na mokolo wana, pamba te akanisaki kaka ete eloko moko esalemi epai ya Davidi oyo ekomisi ye mbindo. \v 27 Kasi mokolo oyo elandaki, mokolo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, lokola esika ya Davidi ezalaki lisusu polele, Saulo alobaki na mwana na ye ya mobali, Jonatan : \pi1 — Mpo na nini mwana mobali ya Izayi ayei te mpo na kolia, ezala lobi oyo eleki to lelo ? \p \v 28 Jonatan azongiselaki Saulo : \pi1 — Davidi atungisaki ngai ete napesa ye nzela ya kokende noki na Beteleemi. \v 29 Alobaki : « Pesa ngai nzela ya kokende mpo ete etuka na ngai esengeli kobonza mbeka kati na engumba, mpe ndeko na ngai ya mobali abengisi ngai mpo ete nazala kuna. Soki nazwi ngolu na miso na yo, tika ngai kokende kotala bandeko na ngai. » Yango wana ayei te na mesa ya mokonzi. \p \v 30 Saulo asilikelaki makasi Jonatan mpe alobaki na ye : \pi1 — Yo mwana mobali ya mwasi ya yawuli mpe motomboki, nayebi solo ete okoteli mwana mobali ya Izayi ; kasi ezali mpo na soni na yo mpe ya mama oyo abota yo. \v 31 Pamba te tango nyonso mwana mobali ya Izayi akozala na bomoi kati na mokili oyo, ezala yo to bokonzi na yo, bokozala na kimia te. Sik’oyo, lukisa ye mpe memela ngai ye, pamba te asengeli kokufa. \p \v 32 Jonatan atunaki Saulo, tata na ye : \pi1 — Basengeli koboma ye mpo na nini ? Asali nini ? \p \v 33 Saulo abwakelaki Jonatan likonga na ye mpo na koboma ye, mpe Jonatan asosolaki ete tata na ye azali na makanisi ya koboma Davidi. \v 34 Jonatan alongwaki na mesa na kanda makasi mpe atikalaki kolia te na mokolo oyo ya mibale ya feti ya Sanza ya Sika, pamba te ayokaki pasi na motema na ndenge tata na ye afingaki Davidi. \p \v 35 Na tongo ya mokolo oyo elandaki, Jonatan akendeki na zamba kokutana na Davidi. Azalaki elongo na elenge mobali moko. \v 36 Alobaki na elenge mobali : « Kima mbangu mpe lokota makonga oyo nazali kobwaka. » \p Tango elenge mobali azalaki kokima mbangu, Jonatan abwakaki likonga liboso na ye. \v 37 Mpe tango elenge mobali akomaki na esika oyo likonga ya Jonatan ekweyaki, Jonatan alobaki na ye na mongongo makasi : « Boni, likonga ezali liboso na yo te ? » \v 38 Bongo Jonatan agangaki lisusu : « Sala noki ! Kima mbangu, kotelema te ! » \p Elenge mobali alokotaki likonga mpe azongaki epai ya nkolo na ye. \v 39 Elenge mobali ayebaki ata eloko moko te na makambo oyo nyonso ; kaka Jonatan mpe Davidi nde bayebaki. \v 40 Bongo Jonatan apesaki bibundeli na ye epai ya elenge mobali mpe alobaki : « Kende kozongisa yango na engumba. » \p \v 41 Sima na elenge mobali kozonga, Davidi abimaki na ngambo ya sude ya libanga mpe agumbamaki mbala misato liboso ya Jonatan, elongi etala na se. Bayambanaki mpe balelaki elongo, kasi Davidi alelaki mingi koleka. \v 42 Jonatan alobaki na Davidi : « Kende na kimia, pamba te biso mibale tolapanaki ndayi na Kombo na Yawe na koloba : ‹ Yawe azali Motatoli kati na yo mpe ngai, mpe kati ya bakitani na yo mpe bakitani na ngai mpo na libela. › » \p Bongo Davidi akendeki, mpe Jonatan azongaki na engumba. \c 21 \s1 Davidi epai ya Nganga-Nzambe Ayimeleki \p \v 1 Davidi akendeki na mboka Nobi epai ya Nganga-Nzambe Ayimeleki. Ayimeleki alengaki mpe akimaki mbangu mpo na kokende koyamba ye. Atunaki na Davidi : \pi1 — Mpo na nini ozali yo moko ? Mpo na nini ezali na moto moko te elongo na yo ? \p \v 2 Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe Ayimeleki : \pi1 — Mokonzi apesaki ngai mosala moko boye mpe alobaki na ngai : « Tika ete moto moko te ayeba ata likambo moko na mosala oyo natindi yo. » Na tina na yango nde nasengaki na bato na ngai ete tokutana na esika moko. \v 3 Bongo sik’oyo, osimbi eloko nini na loboko na yo ? Pesa ngai mapa mitano to eloko nyonso oyo okoki kozala na yango. \p \v 4 Kasi Nganga-Nzambe azongiselaki Davidi : \pi1 — Na loboko na ngai, nazali na mapa te oyo toliaka mikolo nyonso, kasi ezali kaka na mapa oyo ebulisama. Bato na yo bakoki kolia yango soki kaka basangisaki banzoto te na basi. \p \v 5 Davidi azongiselaki Nganga-Nzambe : \pi1 — Solo, bapekisa biso basi ndenge kaka ezalaka tango nyonso na makambo ya boye. Kutu tango nakendaka bitumba, biloko ya bato na ngai ebulisamaka. Atako mosala ya mokolo ya lelo ezalaki bule te, kasi ekomi bule mpo ete bibundeli ebulisami. \p \v 6 Bongo Nganga-Nzambe apesaki ye mapa ebulisama, pamba te azalaki na mapa mosusu te. Ezalaki mapa oyo batiaki liboso ya Yawe, oyo bawuti kolongola na miso na Ye mpo na kotia mapa mosusu oyo ebimi sika na moto, na esika ya mapa oyo ya liboso. \v 7 Nzokande na mokolo yango wana, ezalaki na mosali moko, kati na basali ya Saulo, oyo atikalaki kuna liboso ya Yawe. Kombo na ye ezalaki « Doegi. » Azalaki moto ya Edomi, mpe mokonzi ya babateli bibwele ya Saulo. \p \v 8 Davidi atunaki Ayimeleki : \pi1 — Boni awa, ozali te ata na likonga moko to na mopanga na se na loboko na yo ? Ngai namemaki te ezala mopanga na ngai to ebundeli na ngai mosusu, pamba te mosala ya mokonzi esengelaki kosalema na lombangu. \p \v 9 Nganga-Nzambe azongisaki : \pi1 — Ezali awa na mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia, oyo obomaki na lubwaku ya Terebente ; balinga yango na elamba sima na efode. Soki olingi kozwa yango, zwa na yo ; pamba te ezali awa na mopanga mosusu te, bobele oyo wana. \p Davidi alobaki : \pi1 — Mopanga moko te ekokani na yango ; pesa ngai yango. \s1 Davidi kati na mboka Gati \p \v 10 Na mokolo wana kaka, Davidi atelemaki, akimaki Saulo mpe akendeki epai ya Akishi, mokonzi ya Gati. \v 11 Kasi basali ya Akishi balobaki na ye : « Moto oyo azali Davidi te, mokonzi ya mboka ? Ezali ye te oyo bazali koyemba boye na kobina na tina na ye : ‹ Saulo abomaki bankoto, mpe Davidi abomaki bankoto zomi ? › » \p \v 12 Davidi asimbamaki na maloba oyo mpe abangaki makasi Akishi, mokonzi ya Gati. \v 13 Mpe wana akosaki kobela liboma na miso ya bato ya Filisitia, akomaki kosala kati na bango makambo lokola moto ya liboma : kokoma na bikuke ya bandako, mpe kotika soyi kotanga ye na mandefu. \v 14 Akishi alobaki na basali na ye : « Botala tata oyo, azali moto ya liboma ! Mpo na nini boyei na ye epai na ngai ? \v 15 Boni, nazangi penza bato ya maboma mpo ete bomema mobali oyo awa, na tina ete aya kosala makambo na ye ya liboma ? Boni, moto ya boye asengeli penza kokota na ndako na ngai ? » \c 22 \s1 Davidi kati na Adulami mpe Mitsipe \p \v 1 Davidi alongwaki na Gati mpe akendeki kobombama na lidusu ya libanga ya Adulami. Tango bandeko na ye ya mibali mpe ya libota ya botata na ye bayokaki sango yango, bakitaki kuna epai na ye. \v 2 Bato nyonso oyo bazalaki kati na minyoko, ba-oyo bazalaki na baniongo ya bato mosusu mpe ba-oyo mitema na bango ezoka, basanganaki zingazinga ya Davidi mpe akomaki mokambi na bango. Elongo na ye, ezalaki na bato pene nkama minei. \p \v 3 Kolongwa wana, Davidi akendeki na Mitsipe ya Moabi mpe alobaki na mokonzi ya Moabi : « Nabondeli yo : Pesa tata na ngai mpe mama na ngai ndingisa ya koya kovanda elongo na yo kino ngai nakoyeba makambo oyo Nzambe akosala mpo na ngai. » \v 4 Boye Davidi amemaki bango epai ya mokonzi ya Moabi, mpe bavandaki elongo na ye tango nyonso oyo Davidi azalaki kati na ndako ya makasi. \p \v 5 Kasi mosakoli Gadi alobaki na Davidi : « Kovanda te kati na ndako oyo batonga makasi, kende na mokili ya Yuda. » Boye Davidi alongwaki mpe akendeki na zamba ya Ereti. \s1 Saulo abomi Banganga-Nzambe ya Yawe \p \v 6 Saulo ayokaki ete bamonaki Davidi elongo na bato na ye. Wana Saulo azalaki na mopanga na loboko na ye mpe avandaki na Gibea, na likolo ya ngomba moke mpe na se ya nzete oyo babengi « Tamarisi » elongo na bakonzi nyonso ya mampinga na ye, \v 7 Saulo ayebisaki bango : « Bino bato ya Benjame boyoka, bokanisi ete mwana ya Izayi akopesa bino nyonso bilanga mpe bilanga ya vino ? Bokanisi ete akokomisa bino bakonzi ya bankoto to bakonzi ya bankama ya basoda ? \v 8 Ezali mpo na yango nde bino nyonso bosalelaki ngai likita ? Moto moko te alobi na ngai na tina na boyokani oyo mwana na ngai ya mobali asalaki na mwana ya Izayi, mpe moko te kati na bino ayokeli ngai mawa mpo ete ayebisa ngai ete mwana na ngai asaleli ngai likita mpo ete mosali na ngai atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ? » \p \v 9 Kasi Doegi, moto ya Edomi, oyo azalaki moko kati na basali ya Saulo, alobaki : « Namonaki mwana mobali ya Izayi koya na Nobi epai ya Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi. \v 10 Ayimeleki atunaki mpo na ye makambo epai na Yawe, mpe apesaki ye bilei mpe mopanga ya Goliati, moto ya Filisitia. » \p \v 11 Boye mokonzi abengisaki Nganga-Nzambe Ayimeleki, mwana mobali ya Ayitubi ; elongo na Banganga-Nzambe nyonso, bato ya libota na ye ya botata, oyo bazalaki na Nobi. Mpe bango nyonso bayaki epai ya mokonzi. \v 12 Saulo alobaki : \pi1 — Yoka sik’oyo, mwana mobali ya Ayitubi. \p Ayimeleki azongisaki : \pi1 — Nazali koyoka yo, nkolo na ngai. \p \v 13 Saulo alobaki na ye : \pi1 — Mpo na nini yo mpe mwana mobali ya Izayi bosalelaki ngai likita mpo na kotelemela ngai ? Mpo na nini opesaki ye bilei mpe mopanga, mpe otunaki mpo na ye makambo epai na Nzambe, mpo ete atelemela ngai mpe atiela ngai mitambo ndenge azali kosala yango na mokolo ya lelo ? \p \v 14 Ayimeleki azongiselaki mokonzi : \pi1 — Boni, ezali na moto moko kati na basali na yo nyonso oyo azali na boyengebene lokola Davidi ? Ye oyo azali bokilo ya mokonzi, mokambi ya basoda oyo bakengelaka yo mpe moto oyo aleki na lokumu kati na libota na yo ? \v 15 Boni, mokolo wana ezalaki mbala na ngai ya liboso ya kotuna mpo na ye makambo epai ya Nzambe ? Nakanisi ete ezali bongo te. Boye tika ete mokonzi atangela mosali na ye to moko kati na libota ya botata na ngai ngambo te ; pamba te mosali na yo ayebi ata eloko moko te kati na likambo oyo nyonso. \p \v 16 Kasi mokonzi alobaki : \pi1 — Ayimeleki, okokufa solo ; yo mpe libota mobimba ya botata na yo. \p \v 17 Boye, mokonzi atindaki bakengeli na ye, oyo bazalaki na mopanzi na ye : « Bobaluka mpe boboma Banganga-Nzambe ya Yawe ; pamba te bango mpe basungaki Davidi : bayebaki ete Davidi azalaki kokima kasi bayebisaki ngai te. » Kasi basoda oyo bakengelaka mokonzi baboyaki kosembola maboko na bango mpo na koboma Banganga-Nzambe ya Yawe. \p \v 18 Mokonzi apesaki mitindo epai ya Doegi : « Yo, baluka mpe boma Banganga-Nzambe. » \p Boye Doegi, moto ya Edomi, abalukaki mpe abomaki bango. Na mokolo wana, abomaki bato tuku mwambe na mitano oyo balataki efode ya lino. \v 19 Abomaki lisusu na mopanga kati na Nobi, engumba ya Banganga-Nzambe, mibali, basi, bana mpe bana mike, bangombe, ba-ane mpe bameme. \v 20 Kaka Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki mpe koko ya Ayitubi, nde abikaki mpe akimaki mpo na kokende kosangana na Davidi. \v 21 Abiatari ayebisaki Davidi ete Saulo asili koboma Banganga-Nzambe ya Yawe. \v 22 Boye Davidi alobaki na Abiatari : « Mokolo wana, nayebaki malamu ete lokola Doegi, moto ya Edomi, azalaki wana, akokaki kozanga te koyebisa Saulo. Boye ezali mpo na ngai nde bato nyonso ya libota ya botata na yo bakufi ! \v 23 Sik’oyo, vanda awa elongo na ngai, kobanga te. Pamba te moto oyo azali koluka bomoi na yo azali koluka mpe bomoi na ngai. Okobatelama malamu epai na ngai. » \c 23 \s1 Davidi abikisi engumba Keila \p \v 1 Tango bayebisaki Davidi ete bato ya Filisitia bazali kobundisa engumba Keila mpe bazali kozwa na makasi ble na bilanga na yango, \v 2 Davidi atunaki Yawe, alobaki : \pi1 — Nakoki na ngai kokende kobundisa bato oyo ya Filisitia ? \p Yawe azongiselaki ye : \pi1 — Kende, bundisa bato ya Filisitia mpe bikisa engumba Keila. \p \v 3 Kasi basoda ya Davidi bayebisaki ye : \pi1 — Soki awa kati na Yuda, tozali kobanga, ekozala boni soki tokeyi na Keila kobundisa bato ya Filisitia ? \p \v 4 Davidi atunaki lisusu Yawe, mpe Yawe azongiselaki ye : \pi1 — Telema, kende na Keila, pamba te nazali kokaba bato ya Filisitia na maboko na yo. \p \v 5 Boye Davidi elongo na basoda na ye bakendeki na engumba Keila mpe babundisaki bato ya Filisitia, babotolaki biloko mpe bibwele na bango. Davidi abetaki makasi bato ya Filisitia, mpe, na bongo, abikisaki bato ya Keila. \v 6 Nzokande, tango Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki, akimaki epai ya Davidi, na engumba Keila, amemaki elongo na ye efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo. \s1 Saulo alandi Davidi \p \v 7 Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akomi na Keila, Saulo alobaki : « Nzambe akabi ye na maboko na ngai, pamba te lokola Davidi akoti na engumba oyo ezali na bikuke mpe bikangelo, amikotisi ye moko na boloko. » \p \v 8 Saulo asangisaki mampinga na ye nyonso mpo na bitumba, mpo ete bakende na Keila kozingela Davidi elongo na bato na ye. \v 9 Tango Davidi ayokaki sango ya mabe oyo Saulo azali kobongisa mpo na ye, alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari ete amema efode oyo basalelaka mpo na kotuna Yawe makambo. \v 10 Davidi alobaki : \pi1 — Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, mosali na Yo ayoki malamu ete Saulo azali komibongisa mpo na koya na Keila, mpo na kobebisa engumba likolo na ngai. \v 11 Boni, bakambi ya Keila bakokaba ngai penza na maboko na ye ? Saulo akoya solo ndenge mosali na Yo ayoki yango ? Oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, yebisa mosali na yo. \p Yawe alobaki : \pi1 — Iyo, akoya penza. \p \v 12 Davidi atunaki lisusu : \pi1 — Bakambi ya Keila bakokaba penza ngai mpe bato na ngai na maboko ya bato ya Saulo ? \p Yawe alobaki : \pi1 — Iyo, bakokaba yo. \p \v 13 Boye, Davidi mpe bato na ye pene nkama motoba balongwaki na engumba Keila mpe batambolaki bipai na bipai. Tango bayebisaki Saulo ete Davidi alongwaki na Keila, Saulo akendeki lisusu kuna te. \p \v 14 Davidi avandaki na bisambelo ya likolo ya bangomba kati na esobe, mpe avandaki na likolo ya ngomba kati na esobe ya Zifi. Saulo alukaki ye mikolo nyonso, kasi Nzambe akabaki Davidi te na maboko na ye. \p \v 15 Wana Davidi azalaki na Oreshi kati na esobe ya Zifi, ayokaki ete Saulo abimaki mpo na koluka koboma ye. \v 16 Jonatan, mwana mobali ya Saulo, akendeki na Oreshi epai ya Davidi mpo na kolendisa ye na Kombo ya Nzambe. \v 17 Alobaki na ye : « Kobanga te ! Loboko ya tata na ngai, Saulo, ekozwa yo te. Okozala mokonzi ya Isalaele, mpe ngai nakozala molandi na yo ; ezala tata na ngai, Saulo, ayebi yango. » \p \v 18 Bango mibale basalaki boyokani liboso ya Yawe. Jonatan azongaki epai na ye, mpe Davidi atikalaki na Oreshi. \s1 Davidi akimi Saulo \p \v 19 Bato ya Zifi bakendeki na Gibea epai ya Saulo mpe balobaki na ye : \pi1 — Boni, Davidi abombami te kati na biso, na bisambelo ya likolo ya bangomba ya Oreshi, kati na esobe, na likolo ya ngomba moke ya Akila oyo ezali na ngambo ya sude ya Yeshimoni ? \v 20 Sik’oyo, oh mokonzi, tango nyonso okosepela kokita, kita na yo ; mpe biso moko tozwi mokumba ya kokaba ye na maboko ya mokonzi. \p \v 21 Saulo azongisaki : \pi1 — Tika ete Yawe apambola bino mpo na mawa na bino epai na ngai ! \v 22 Bokende, botala lisusu malamu, bononga mpe boluka koyeba esika nini Davidi akendaka mikolo nyonso mpe nani amonaki ye kuna ; pamba te bayebisaka ngai ete azali na mayele mabe makasi. \v 23 Botala mpe boyeba bisika nyonso epai wapi abombamaka, mpe bozongela ngai mpo na koyebisa ngai makambo nyonso ndenge yango ezali. Bongo na sima, soki azali kati na mboka, ngai nakokende elongo na bino mpe nakolukisa ye kati na bituka nyonso ya Yuda. \p \v 24 Boye, batelemaki mpe bakendeki na Zifi liboso na Saulo. Nzokande Davidi elongo na bato na ye bazalaki kati na esobe ya Maoni, na etando ya Araba, na ngambo ya sude ya Yeshimoni. \p \v 25 Saulo elongo na bato na ye bakomaki koluka Davidi. Tango bayebisaki Davidi ete bazali koluka ye, akitaki kati na libanga monene mpe avandaki kati na esobe ya Maoni. Mpe tango Saulo ayokaki bongo, akotaki kati na esobe yango ya Moani mpo na kolanda Davidi. \v 26 Saulo azalaki kotambola na ngambo moko ya ngomba, bongo Davidi mpe bato na ye bazalaki kotambola na ngambo mosusu mpe kokima mbangu mosika na Saulo. Lokola Saulo mpe mampinga na ye bazalaki koluka kozingela Davidi mpe bato na ye mpo na kokanga bango, \v 27 momemi sango moko ayaki epai ya Saulo mpe alobaki na ye : « Yaka noki ! Bato ya Filisitia bakoti na mokili. » \p \v 28 Mbala moko, Saulo atikaki kolanda Davidi mpo na kokende kokutana na bato ya Filisitia. Yango wana babengaka esika yango « Sela-Amalekoti » oyo elakisi « Libanga ya bokabwani. » \s1 Davidi abikisi Saulo \p \v 29 Davidi alongwaki wana mpe akendeki kovanda na ebombamelo kati na mabanga ya Eyini-Gedi. \c 24 \p \v 1 Sima na Saulo kolanda bato ya Filisitia, azongaki ; bongo bayebisaki ye : « Davidi azali sik’oyo kati na esobe ya Eyini-Gedi. » \v 2 Na bongo, Saulo azwaki basoda ya mpiko nkoto misato kati na Isalaele mobimba mpe akendeki koluka Davidi mpe bato na ye pene ya etando ya bantaba ya zamba. \v 3 Wana Saulo akomaki pene ya etando ya bameme, oyo ezalaki zingazinga ya nzela, amonaki ebombamelo moko ya monene kati na mabanga mpe akotaki kuna mpo na kosala zongo inene. Nzokande Davidi mpe bato na ye bazalaki na suka, kati na ebombamelo yango. \p \v 4 Bato ya Davidi balobaki na ye : Tala mokolo oyo Yawe alobelaki tango alobaki na yo : « Nakokaba monguna na yo na maboko na yo mpo ete osala ye nyonso oyo olingi. » \p Boye Davidi apusanaki na kobombama mpe akataki songe ya kazaka ya Saulo. \v 5 Sima na yango, Davidi ayokaki motema na ye kobeta mpo ete akataki songe ya kazaka ya Saulo. \v 6 Alobaki na basoda na ye : « Tika ete Yawe apesa ngai te nzela ya kosala likambo ya boye epai ya nkolo na ngai, mopakolami na Yawe ! Loboko na ngai ekoki te kosimba nzoto na ye, pamba te Yawe nde apakolaki ye mafuta. » \p \v 7 Na maloba oyo, Davidi agangelaki bato na ye mpe apekisaki bango kobundisa Saulo. Saulo abimaki na ebombamelo yango mpe akobaki nzela na ye. \p \v 8 Tango Davidi mpe abimaki na ebombamelo yango, abengaki Saulo : « Mokonzi, nkolo na ngai ! » \p Tango Saulo atalaki sima na ye, Davidi akitisaki elongi mpe agumbamaki ye moko, elongi na ye kino na mabele. \v 9 Alobaki na Saulo : \pi1 — Mpo na nini olandaka maloba ya bato oyo balobaka na yo ete Davidi azalaka na posa ya kosala yo mabe ? \v 10 Omoni sik’oyo yo moko na miso na yo ndenge nini Yawe akabaki yo na maboko na ngai kati na ebombamelo, kati na mabanga. Bato mosusu batungisaki ngai ete naboma yo, kasi nabikisaki yo. Nalobaki : « Nakosembola te loboko na ngai mpo na kotelemela nkolo na ngai, pamba te azali mopakolami na Yawe. » \v 11 Oh tata na ngai, tala eteni oyo ya kazaka na yo na loboko na ngai ! Nakataki songe ya kazaka na yo, kasi nabomaki yo te. Sik’oyo, sosola mpe yeba ete, kati na ngai, mayele mabe mpe botomboki ezali te. Nasalaki na ngai yo mabe te, kasi yo ozali kolanda ngai mpo na koboma ngai. \v 12 Tika ete Yawe azala Mosambisi kati na ngai mpe yo, mpe tika ete Yawe azongisela yo mabe na mabe oyo osali ngai ! Kasi loboko na ngai ekosimba yo te. \v 13 Ndenge kaka lisese ya kala elobi : « Misala mabe ewutaka epai ya bato mabe, » loboko na ngai ekosimba yo te. \v 14 Mokonzi ya Isalaele abimi mpo na kobundisa nani ? Azali kolanda nani ? Mbwa ya kokufa ? Nzinzi ? \v 15 Tika ete Yawe azala Mosambisi na biso mpe akata likambo kati na biso. Tika ete atala likambo na ngai mpe akata yango ! Tika ete alongisa ngai mpe akangola ngai wuta na loboko na yo. \p \v 16 Tango Davidi asilisaki koloba na Saulo, Saulo atunaki : \pi1 — Oyo nazali koyoka ezali solo mongongo na yo Davidi, mwana na ngai ? \p Mpe Saulo alelaki makasi. \v 17 Alobaki na Davidi : \pi1 — Ozali penza sembo koleka ngai, pamba te osaleli ngai bolamu, nzokande ngai nasalaki mabe epai na yo ! \v 18 Owuti sik’oyo kotalisa ngai bolamu oyo osaleli ngai : Yawe akabaki ngai penza na maboko na yo, kasi oboyaki na yo koboma ngai. \v 19 Boni, soki moto akutani na monguna na ye, akotika ye kokoba kokende na nzela na ye na kimia ? Tika ete Yawe afuta yo malamu mpo na bolamu oyo osaleli ngai na mokolo ya lelo. \v 20 Tala, nayebi sik’oyo ete okozala penza mokonzi, mpe bokonzi ya Isalaele ekolendisama na maboko na yo. \v 21 Lapa sik’oyo ndayi epai na ngai na Kombo na Yawe ete okoboma bakitani na ngai te to okolimwisa kombo na ngai te wuta na libota ya botata na ngai. \p \v 22 Boye Davidi alapaki ndayi yango epai ya Saulo. Sima na yango, Saulo azongaki epai na ye. Bongo Davidi mpe bato na ye bazongaki na ebombamelo na bango kati na ngomba. \c 25 \s1 Davidi, Nabali mpe Abigayili \p \v 1 Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esanganaki mpo na kosala matanga na tina na ye ; bongo bakundaki ye na mboka na ye, Rama. \p Davidi akendeki na esobe ya Parani. \v 2 Na mboka Maoni, ezalaki na moto moko ya bozwi oyo bomengo na ye ezalaki kati na mboka Karimeli. Azalaki na bameme ya mibali nkoto misato mpe bantaba ya basi nkoto moko. Na eleko oyo, azalaki kati na Karimeli epai wapi azalaki kokata bameme na ye bapwale. \v 3 Kombo na ye ezalaki « Nabali, » mpe kombo ya mwasi na ye ezalaki « Abigayili. » Abigayili azalaki mwasi ya mayele mpe ya kitoko ; kasi mobali na ye, moto ya etuka Kalebi, azalaki motema makasi mpe moto mabe. \v 4 Wana Davidi azali kati na esobe, ayokaki ete Nabali azali kokata bameme na ye bapwale. \v 5 Davidi atindaki bilenge mibali zomi, alobaki na bango : « Bokende na Karimeli epai ya Nabali mpe bopesa ye mbote na kombo na ngai. \v 6 Boyebisa ye : ‹ Tika ete bomoi molayi epesamela yo ! Tika ete kimia ezala na yo, na libota na yo mpe na nyonso oyo ezali ya yo ! \v 7 Nayoki ete bazali kokata bameme bapwale epai na yo. Nzokande, tango nyonso oyo babateli bibwele na yo bazalaki elongo na biso na Karimeli, tosalaki bango mabe ata moko te, mpe babungisaki ata eloko moko te. \v 8 Tuna basali na yo, bakoyebisa yo. Boye, tika ete bilenge mibali na ngai bazwa ngolu na miso na yo, lokola tokomi epai na yo na mokolo ya feti ! Nabondeli yo, pesa na basali na yo mpe na Davidi, mwana na yo ya mobali, eloko nyonso oyo okokoka kozwa mpo na bango. › » \p \v 9 Tango bilenge mibali ya Davidi bakomaki epai ya Nabali, bayebisaki ye makambo oyo nyonso na kombo ya Davidi, mpe bazelaki. \p \v 10 Kasi Nabali azongiselaki basali ya Davidi : « Davidi azali nani ? Mwana mobali ya Izayi azali nani ? Mikolo oyo, basali ebele bazali kokima bankolo na bango. \v 11 Mpo na nini nakamata mapa na ngai, mayi na ngai mpe mosuni, oyo nabongisi mpo na bato na ngai, oyo bakataka bapwale, mpo na kopesa yango epai ya bato oyo nayebi kutu epai bawuti te ? » \p \v 12 Bilenge mibali ya Davidi babalukaki mpe bazongaki. Tango bakomaki, bayebisaki Davidi makambo oyo Nabali alobaki. \v 13 Davidi alobaki na basoda na ye : « Tika ete moko na moko atia mopanga na ye na loketo. » \p Boye, batiaki mipanga na bango na loketo, mpe Davidi atiaki mpe oyo ya ye. Bato pene nkama minei bakendeki elongo na Davidi, mpe bato nkama mibale batikalaki mpo na kobatela biloko. \p \v 14 Moko kati na basali ya Nabali alobaki na Abigayili, mwasi ya Nabali : « Davidi atindaki bantoma wuta na esobe mpo na kopambola nkolo na biso, kasi ye atombokelaki bango. \v 15 Nzokande bato yango basalelaki biso penza bolamu, basalaki biso mabe ata moko te, mpe, tango nyonso totambolaki elongo na bango na zamba, tobungisaki ata eloko moko te. \v 16 Butu mpe moyi, tango nyonso tozalaki koleisa bibwele na biso pene na bango, bazalaki lokola mir zingazinga na biso. \v 17 Sik’oyo, yeba kokanisa mpo na yango mpe tala eloko nini osengeli kosala, pamba te mokano ya koboma nkolo na biso mpe libota na ye mobimba esili kozwama. Nkolo na biso azali moto mabe koleka, boye moto moko te akoki kosolola na ye. » \p \v 18 Abigayili asalaki na lombangu, azwaki mapa nkama mibale, bambeki mibale ya vino, bameme batumba mitano, bakilo tuku motoba na mibale na bagrame nkama mitano ya ble bakalinga, maboke nkama moko ya bambuma ya vino ekawuka mpe bagato nkama mibale basala na bambuma ya figi ; mpe atiaki yango na likolo ya ba-ane. \v 19 Bongo alobaki na basali na ye : « Bokende liboso na ngai, nazali kolanda bino. » Kasi ayebisaki mobali na ye, Nabali, te. \v 20 Wana Abigayili azalaki na likolo ya ane, azalaki kokita sima na ngomba. Na tango yango kaka, Davidi mpe bato na ye bazalaki mpe kokita na ngambo epai wapi Abigayili azalaki, mpe akutanaki na bango. \v 21 Davidi awutaki komilobela : « Ezalaki na pamba nde nabatelaki biloko nyonso ya moto oyo kati na esobe mpo ete eloko moko te ebunga kati na biloko na ye nyonso ! Azongiseli ngai mabe na esika ya bolamu oyo nasalelaki ye ! \v 22 Tika ete Nzambe apesa ngai Davidi etumbu ya makasi soki, kino lobi na tongo, natiki na bomoi mobali moko kati na bato nyonso oyo bazali ya Nabali ! » \p \v 23 Tango Abigayili amonaki Davidi, akitaki na lombangu wuta na ane na ye mpe agumbamaki na liboso ya Davidi, elongi kino na mabele. \v 24 Akweyaki na makolo ya Davidi mpe alobaki : \pi1 — Oh nkolo na ngai, tika ete mbeba ezala kaka na moto na ngai ! Nabondeli yo, tika ete mwasi mosali na yo asolola na yo ! Yoka makambo oyo mwasi mosali na yo alingi koyebisa yo. \v 25 Tika ete nkolo na ngai atala te Nabali, mobali oyo ya mabe, pamba te azali penza ndenge kombo na ye ezali ; kombo na ye ezali Nabali, mpe elingi koloba : moto ya liboma. Mpe liboma ezali penza kotambola elongo na ye. Ngai mwasi mosali na yo, namonaki te bilenge mibali oyo mokonzi na ngai atindaki. \v 26 Sik’oyo, nkolo na ngai, na Kombo na Yawe mpe na kombo na yo, lokola Yawe apesi yo nzela te ya koboma mpe ya kozongisa yo moko mabe na mabe, tika ete banguna na yo mpe bato nyonso oyo bazali makasi ya kosala mabe epai ya nkolo na ngai bazala lokola Nabali. \v 27 Mpe tika ete bakado oyo mwasi mosali na yo amemeli nkolo na ngai epesamela mibali oyo bazali kolanda yo. \v 28 Nabondeli yo, limbisa mabe ya mwasi mosali na yo. Yawe akosala penza ete libota ya nkolo na ngai ewumela tango nyonso na bokonzi, pamba te obundaka bitumba ya Yawe. Tika ete, tango nyonso okozala na bomoi, mabe ata moko te emonana kati na yo. \v 29 Ezala soki moto moko atelemi mpo na kolanda yo to mpo na koboma yo, Yawe, Nzambe na yo, akobatela malamu bomoi ya nkolo na ngai kati na bato ya bomoi, kasi akobwaka banguna na yo mosika lokola na ebambelo mabanga. \v 30 Tango Yawe akokokisela nkolo na ngai bolamu nyonso oyo alakaki yo mpe akokomisa yo mokambi ya Isalaele, \v 31 nkolo na ngai akoyoka mawa te na motema na ye mpe akomitungisa te na makanisi mpo ete asopaki makila na pamba mpe azongisaki ye moko mabe na mabe. Bongo tango Yawe akosalela nkolo na ngai bolamu, okokanisela mwasi mosali na yo. \p \v 32 Davidi azongiselaki Abigayili : \pi1 — Tika ete apambolama, Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo atindi yo kokutana na ngai na mokolo ya lelo ! \v 33 Tika ete mayele na yo epambolama ! Tika ete yo moko mpe opambolama mpo ete opesi ngai nzela te ya koboma mpe ya kozongisa ngai moko mabe na mabe ! \v 34 Nzokande, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo apesi ngai nzela te ya kosala yo mabe, soki oyaki noki te mpo na kokutana na ngai, mobali moko te kati na ndako ya Nabali alingaki kotikala na bomoi kino lobi na tongo. \p \v 35 Boye Davidi azwaki bakado oyo Abigayili amemelaki ye mpe alobaki : \pi1 — Zonga epai na yo na kimia. Nayoki maloba na yo mpe nakosala ndenge osengi ngai. \s1 Kufa ya Nabali, mpe Davidi abali Abigayili \p \v 36 Tango Abigayili akomaki epai ya Nabali, akutaki Nabali azali kosala feti kati na ndako na ye ndenge penza mokonzi asalaka yango. Azalaki na loyenge mpe alangwaki makasi. Boye Abigayili ayebisaki ye eloko te kino na tongo ya mokolo oyo elandaki. \v 37 Kasi na tongo, lokola milangwa na ye esilaki, mwasi na ye ayebisaki ye makambo nyonso oyo elekaki. Nabali ayokaki pasi na motema mpe akangamaki lokola libanga. \v 38 Sima na mikolo zomi, Yawe abetaki Nabali, mpe akufaki. \p \v 39 Tango Davidi ayokaki ete Nabali akufi, alobaki : « Tika ete apambolama, Yawe oyo akoti likambo na ngai na ndenge Nabali atiolaki ngai ! Apesi te na mosali na Ye nzela ya kosala mabe, kasi akweyisi mabe ya Nabali na moto na ye moko ! » \p Bongo Davidi atindaki maloba epai ya Abigayili mpo na kosenga ye ete akoma mwasi na ye. \p \v 40 Basali ya Davidi bakendeki na Karimeli mpe balobaki na Abigayili : \pi1 — Davidi atindi biso epai na yo mpo ete toya kozwa yo mpo okoma mwasi na ye. \p \v 41 Abigayili agumbamaki elongi kino na mabele mpe alobaki : \pi1 — Mwasi mosali na yo, ye oyo ! Abongami mpo na kosalela bino mpe mpo na kosukola makolo ya basali ya nkolo na ngai. \p \v 42 Abigayili amataki na ane na lombangu mpe akendeki nzela moko na bantoma ya Davidi elongo na basali na ye mitano ya basi. Mpe akomaki mwasi ya Davidi. \v 43 Davidi abalaki lisusu Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe bango mibale bakomaki basi na ye. \v 44 Kasi Saulo abalisaki Mikali, mwana na ye ya mwasi, oyo azalaki mwasi ya Davidi, epai ya Paliti, mwana mobali ya Laishi, moto na Galimi. \c 26 \s1 Davidi abikisi lisusu Saulo \p \v 1 Bato ya Zifi bakendeki na Gibea epai ya Saulo, mpe balobaki : « Boni, oyebi ete Davidi abombami na likolo ya Akila, ngomba moke oyo etalani na Yeshimoni ? » \p \v 2 Boye Saulo atelemaki mpo na kokende na esobe ya Zifi elongo na basoda ya mpiko ya Isalaele, nkoto misato, mpo na koluka Davidi kati na esobe ya Zifi. \v 3 Saulo atongaki molako na ye na likolo ya Akila, ngomba moke, oyo etalani na Yeshimoni, pembeni ya nzela. Na tango wana, Davidi azalaki kovanda kati na esobe. Lokola amonaki ete Saulo alandi ye kino na esobe, \v 4 Davidi atindaki banongi mpe, na nzela na bango, ayokaki ete Saulo akomi penza. \v 5 Davidi atelemaki mpe akendeki na esika oyo Saulo atongaki molako na ye. Amonaki esika oyo Saulo mpe Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga na ye, balalaki. Saulo azalaki ya kolala na kati-kati ya molako, mpe basoda bazingelaki ye. \p \v 6 Davidi atunaki Ayimeleki, moto ya Iti, mpe Abishayi, mwana mobali ya Tseruya mpe ndeko mobali ya Joabi : \pi1 — Nani kati na bino akoki kokende elongo na ngai kino na molako epai ya Saulo ? \p Abishayi azongisaki : \pi1 — Ngai, nakokende elongo na yo. \p \v 7 Boye Davidi mpe Abishayi bakomaki, na butu, na esika oyo basoda bazalaki. Bakutaki Saulo alali pongi na kati-kati ya molako, mpe likonga na ye epikamaki na mabele, na pembeni ya moto na ye. Abineri mpe basoda balalaki zingazinga na ye. \p \v 8 Abishayi alobaki na Davidi : \pi1 — Lelo, Nzambe akabi monguna na yo na maboko na yo. Pesa ngai sik’oyo nzela mpo ete natobola ye kaka mbala moko likonga na ngai mpe apikama na mabele, nakozongela yango te mbala mibale. \p \v 9 Kasi Davidi alobaki na Abishayi : \pi1 — Te ! Koboma ye te ! Pamba te nani akosembola loboko na ye likolo ya mopakolami na Yawe mpe azanga kozwa etumbu ? \p \v 10 Mpe Davidi alobaki lisusu : \pi1 — Na Kombo na Yawe ! Ye moko Yawe nde akoboma ye : akokufa, ezala soki tango na ye ya kokufa ekoki to soki akokende na bitumba. \v 11 Kasi Yawe apekisi ngai kosembola loboko likolo ya mopakolami na Ye. Sik’oyo, zwa kaka likonga mpe eloko ya mayi oyo ezali pembeni ya moto na ye, mpe tokende na biso. \p \v 12 Boye Davidi azwaki likonga mpe eloko ya mayi oyo ezalaki pembeni ya moto ya Saulo, mpe bakendeki. Moto moko te amonaki mpe ayebaki likambo yango, mpe moko te alamukaki. Bato nyonso bazalaki ya kolala, pamba te Yawe alalisaki bango pongi makasi. \p \v 13 Davidi akatisaki lubwaku, akendeki na ngambo mosusu mpe atelemaki mosika, na songe ya ngomba, mosika penza ya molako. \v 14 Davidi abelelaki epai ya mampinga mpe epai ya Abineri, mwana mobali ya Neri ; alobaki : \pi1 — Abineri, okoyanola ngai ? \p Abineri azongisaki : \pi1 — Yo nani oyo ozali koganga na matoyi ya mokonzi ? \p \v 15 Davidi alobaki na Abineri : \pi1 — Ozali mobali, boye te ? Nani akokani na yo kati na Isalaele ? Mpo na nini obateli te mokonzi, nkolo na yo ? Moto moko ayaki mpo na koboma mokonzi na yo. \v 16 Likambo oyo osali ezali malamu te. Na Kombo na Yawe, yo mpe bato na yo bosengeli kokufa ; pamba te bobateli te nkolo na bino, mopakolami na Yawe. Botala zingazinga na bino ! Wapi likonga mpe eloko ya mayi ya mokonzi, oyo ezalaki pembeni ya moto na ye ? \p \v 17 Saulo asosolaki ete ezali mongongo ya Davidi mpe alobaki : \pi1 — Oyo wana ezali mongongo na yo Davidi, mwana na ngai. \p Davidi azongisaki : \pi1 — Solo, ezali mongongo na ngai, oh mokonzi, nkolo na ngai. \p \v 18 Bongo Davidi alobaki lisusu : \pi1 — Mpo na nini nkolo na ngai azali kolanda mosali na ye ? Nasali nini ? Likambo nini ya mabe nasali mpo ete namema ngambo ? \v 19 Sik’oyo, tika ete mokonzi, nkolo na ngai, ayoka maloba ya mosali na ye. Soki ezali Yawe nde atindaki yo kotelemela ngai, wana tika ete andima likabo. Kasi soki bato nde bazali kosala boye, wana tika ete balakelama mabe liboso ya Yawe ; pamba te babengani ngai lelo mpe balongoli ngai na libula ya Yawe, mpe balobi na ngai : « Kende kosalela banzambe mosusu. » \pi1 \v 20 Sik’oyo, tika ete makila na ngai esopana na mabele te, mosika na miso ya Yawe ! Pamba te mokonzi ya Isalaele abimaki mpo na koluka ngenga kaka moko, ndenge balandaka soso ya zamba, na bangomba. \p \v 21 Boye Saulo alobaki : \pi1 — Solo, nasali masumu ! Davidi, mwana na ngai ya mobali, zonga ! Mpo ete omonaki ete bomoi na ngai ezali motuya, nakomeka lisusu te kosala yo mabe. Nasalaki penza lokola moto ya liboma mpe napengwaki. \p \v 22 Davidi azongisaki : \pi1 — Likonga ya mokonzi, yango oyo ! Tika ete moko kati na bilenge mibali na yo aya kozwa yango. \v 23 Yawe oyo afutaka moto nyonso kolanda bosembo mpe boyengebene na ye, akabaki yo na maboko na ngai lelo ; kasi naboyaki kosembola loboko na ngai likolo ya mopakolami na Yawe. \v 24 Ndenge bomoi na yo ezalaki lelo motuya makasi na miso na ngai, ndenge wana mpe bomoi na ngai ekozala motuya makasi na miso ya Yawe, mpe akokangola ngai na pasi nyonso. \p \v 25 Saulo alobaki na Davidi : \pi1 — Tika ete opambolama, Davidi, mwana na ngai ya mobali ! Solo, okosala penza makambo minene mpe, solo, okolonga. \p Bongo Davidi akobaki nzela na ye, mpe Saulo azongaki epai na ye. \c 27 \s1 Davidi epai ya bato ya Filisitia \p \v 1 Davidi akanisaki mpe amilobelaki : « Mokolo ezali oyo Saulo akoboma ngai na nzela ya loboko na ye. Boye eleki malamu mpo na ngai kokima na mokili ya bato ya Filisitia. Na bongo nde Saulo akotika koluka ngai kati na Isalaele mobimba, mpe ngai nakokima loboko na ye. » \v 2 Bongo Davidi elongo na bato nkama motoba oyo bazalaki elongo na ye batelemaki mpe bakendeki epai ya Akishi, mwana mobali ya Maoki, mokonzi ya Gati. \v 3 Davidi mpe bato na ye bavandaki na Gati epai ya Akishi : mobali nyonso azalaki na libota na ye, mpe Davidi azalaki na basi na ye mibale : Ayinoami, moto ya Jizireyeli, mpe Abigayili oyo azalaki liboso mwasi ya Nabali, moto ya Karimeli. \v 4 Tango bayebisaki Saulo ete Davidi akimi na Gati, atikaki koluka ye. \p \v 5 Davidi alobaki na Akishi : « Soki nazwi ngolu na miso na yo, tika ete bapesa ngai esika epai wapi nakoki kovanda kati na moko ya bingumba ya mokili. Mpo na nini mosali na yo avanda na mboka mokonzi elongo na yo ? » \p \v 6 Na mokolo wana, Akishi apesaki ye engumba ya Tsikilagi. Yango wana Tsikilagi ekoma kino na mokolo ya lelo engumba ya bakonzi ya Yuda. \v 7 Davidi awumelaki na mokili ya bato ya Filisitia mobu moko mpe sanza minei. \p \v 8 Na tango wana, Davidi mpe bato na ye bazalaki kobundisa bato ya Geshuri, ya Girizi mpe ya Amaleki ; pamba te wuta kala, bato ya bikolo yango bazalaki kovanda na mokili longwa na Shuri kino na Ejipito. \v 9 Tango nyonso Davidi azalaki kobundisa mboka moko, azalaki kotika te na bomoi ezala mobali to mwasi. Nzokande azalaki kobotola bameme, bangombe, ba-ane, bashamo mpe bilamba. Bongo azalaki kozonga epai ya Akishi. \p \v 10 Tango Akishi atunaki : \pi1 — Bobundi wapi lelo ? \p Davidi azongisaki : \pi1 — Tobundi na sude ya Yuda, na sude ya mokili ya bato ya Yerameeli, mpe na sude ya mokili ya bato ya Keni. \p \v 11 Davidi azalaki kotika te ete bamema na Gati, ezala mobali to mwasi, noki te bapanza sango na ye na maloba oyo : « Tala makambo oyo Davidi asalaki. » Davidi azalaki kosala kaka bongo, tango nyonso oyo avandaki na mboka ya bato ya Filisitia. \v 12 Akishi atielaki Davidi motema mpe alobaki : « Lokola Davidi amiyinisi na miso ya Isalaele, bato na ye, akozala mosali na ngai mpo na libela. » \c 28 \s1 Saulo epai ya mwasi oyo asololaka na bakufi \p \v 1 Na tango wana, bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda mpo na kobundisa Isalaele. Akishi alobaki na Davidi : \pi1 — Osengeli koyeba ete yo mpe bato na yo bokokende na bitumba elongo na ngai. \p \v 2 Davidi azongiselaki Akishi : \pi1 — Okomona yo moko makambo oyo mosali na yo azali na makoki ya kosala. \p Akishi alobaki na Davidi : \pi1 — Malamu mingi ! Nakokomisa yo mpo na libela soda oyo abatelaka ngai. \b \p \v 3 Nzokande Samuele akufaki, mpe Isalaele mobimba esalelaki ye matanga. Bakundaki ye na Rama, engumba na ye. Saulo abenganaki na mokili na ye bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka. \p \v 4 Wana bato ya Filisitia basanganaki mpe bayaki kotonga molako, na Sunemi, Saulo mpe asangisaki bato nyonso ya Isalaele mpe batongaki molako na Giliboa. \v 5 Tango Saulo amonaki mampinga ya bato ya Filisitia, abangaki mpe somo etondaki na motema na ye. \v 6 Saulo atunaki Yawe, kasi Yawe ayanolaki te, ezala na nzela ya ndoto, ya Urimi to ya basakoli. \p \v 7 Bongo, Saulo alobaki na basali na ye : \pi1 — Bolukela ngai mwasi oyo asololaka na bakufi mpo ete nakende kotuna ye. \p Basali na ye bazongisaki : \pi1 — Tala, ezali na mwasi moko na Eyini-Dori. \p \v 8 Boye Saulo amibongolaki, alataki bilamba mosusu mpe akendeki epai ya mwasi yango, na butu, elongo na mibali mibale. Alobaki : \pi1 — Nabondeli yo, solola na bakufi mpo na ngai, mpe bimisela ngai moto oyo nakotanga kombo na ye. \p \v 9 Kasi mwasi yango alobaki na ye : \pi1 — Oyebi solo makambo oyo Saulo asalaki. Abenganaki na mokili, bato oyo basololaka na bakufi mpe bato na soloka. Bongo mpo na nini otieli bomoi na ngai motambo mpo na kobomisa ngai ? \p \v 10 Saulo alapaki ndayi epai na ye na Kombo na Yawe, alobaki : « Na Kombo na Yawe, okozwa solo etumbu te mpo na yango. » \p \v 11 Bongo mwasi yango atunaki : \pi1 — Nabimisela yo nani ? \p Saulo azongisaki : \pi1 — Bimisela ngai Samuele. \p \v 12 Tango mwasi yango amonaki Samuele, agangaki makasi mpe alobaki na Saulo : \pi1 — Mpo na nini okosi ngai ? Ozali Saulo ! \p \v 13 Mokonzi alobaki na ye : \pi1 — Kobanga te, omoni nini ? \p Mwasi alobaki na Saulo : \pi1 — Namoni nzambe moko kobima na mabele. \p \v 14 Saulo atunaki ye : \pi1 — Azali ndenge nini ? \p Mwasi azongisaki : \pi1 — Ezali mobange mobali moko nde azali komata mpe alati kazaka. \p Bongo tango Saulo asosolaki ete ezali Samuele, akitaki mpe agumbamaki elongi kino na mabele. \p \v 15 Samuele alobaki na Saulo : \pi1 — Mpo na nini otungisi ngai mpe obimisi ngai ? \p Saulo alobaki : \pi1 — Nazali na pasi makasi : bato ya Filisitia bazali kobundisa ngai ; bongo Nzambe apesi ngai mokongo, azali koyanola ngai te, ezala na nzela ya basakoli to ya bandoto. Yango wana nabengi yo mpo ete oyebisa ngai likambo nini nakoki kosala. \p \v 16 Samuele alobaki : \pi1 — Mpo na nini ozali kotuna ngai, awa Yawe asili kopesa yo mokongo mpe akomi monguna na yo ? \v 17 Yawe akokisi kaka makambo oyo asakolaki na nzela na ngai : Yawe abotoli bokonzi na maboko na yo mpe apesi yango na moninga na yo, Davidi, \v 18 pamba te otosaki Yawe te mpe okweyiselaki te bato ya Amaleki kanda ya Yawe na koboma bango nyonso. Yango wana Yawe asali yo bongo lelo. \v 19 Yawe akokaba yo mpe Isalaele na maboko ya bato ya Filisitia. \p \v 20 Mbala moko, Saulo abombamaki na mabele mpe ayokaki maloba ya Samuele somo mingi. Nzoto na ye elembaki mpo ete aliaki eloko moko te mokolo mobimba mpe butu mobimba. \p \v 21 Tango mwasi apusanaki pembeni ya Saulo mpe amonaki ete azali lisusu na kimia te, alobaki na ye : \pi1 — Tala, mwasi mosali na yo atosaki yo. Nandimaki kokufa mpo na kaka kosala makambo oyo otindaki ngai. \v 22 Sik’oyo, yo mpe, nabondeli yo : yoka mwasi mosali na yo, mpe tika ete ngai napesa yo bilei mpo ete olia mpe ozwa makasi ya kokoba nzela na yo. \p \v 23 Kasi Saulo aboyaki mpe alobaki : \pi1 — Nakolia te. \p Kasi lokola basali na ye elongo na mwasi batiaki molende, Saulo ayokelaki bango. Saulo alamukaki mpe avandaki na mbeto. \v 24 Mwasi azalaki na mwana ngombe ya mafuta epai na ye, na etonga. Abonzaki yango noki-noki lokola mbeka. Akamataki farine, asangisaki yango mpe atumbelaki bango mapa ezanga levire. \v 25 Atiaki yango liboso ya Saulo mpe liboso ya basali na ye, mpe baliaki. Bongo na butu wana kaka, batelemaki mpe bakendeki. \c 29 \s1 Mokonzi Akishi azongisi Davidi na Tsikilagi \p \v 1 Bato ya Filisitia basangisaki mampinga na bango ya basoda na Afeki, mpe Isalaele atongaki molako pene ya etima ya mayi oyo ezali na Jizireyeli. \v 2 Wana bakambi ya bato ya Filisitia batambolaki liboso ya mampinga na bango ya bankama mpe ya bankoto ya basoda, Davidi mpe bato na ye bazalaki kotambola na sima elongo na mokonzi Akishi. \v 3 Bakonzi ya basoda ya Filisitia batunaki : \pi1 — Ba-Ebre oyo bazali kosala nini awa ? \p Akishi alobaki na bango : \pi1 — Ezali Davidi, mosali ya Saulo, mokonzi ya Isalaele. Azali elongo na ngai wuta mibu mpe mikolo ; mpe natikali nanu kokanga ye ata na mbeba moko te. \p \v 4 Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia batombokelaki Akishi mpe balobaki : \pi1 — Zongisa moto oyo ! Tika ete azonga na esika oyo otiaki ye ; asengeli te kokende elongo na biso na bitumba, noki te akobalukela biso na tango ya bitumba. Mpe ndenge nini moto oyo akoki kosepelisa lisusu mokonzi na ye, soki na komema mito ya bato na biso moko te ? \v 5 Ezali Davidi wana te oyo na tina na ye babandaki koyemba mpe kobina : \q1 « Saulo abomaki bankoto, \q2 mpe Davidi abomaki bankoto zomi. » \p \v 6 Boye Akishi abengaki Davidi mpe alobaki na ye : \pi1 — Na Kombo na Yawe, ozali moto ya sembo. Nasepelaka komona yo kokende mpe kozonga elongo na ngai kati na mampinga. Wuta mokolo oyo oyaki epai na ngai kino lelo, natikali nanu kokanga yo na mbeba ata moko te ; kasi bakambi ya bato ya Filisitia bazali kondima yo te. \v 7 Boye, zonga mpe kende na kimia ; kosala eloko moko te oyo ekosepelisa te bakambi ya bato ya Filisitia. \p \v 8 Davidi atunaki Akishi : \pi1 — Nasali nini ? Eloko nini ya mabe oyo omoni epai ya mosali na yo wuta mokolo oyo nayaki epai na yo kino lelo ? Mpo na nini nakoki te kokende kobundisa banguna ya mokonzi, nkolo na ngai ? \p \v 9 Akishi azongiselaki Davidi : \pi1 — Nayebi ete osepelisaka ngai lokola Anjelu na Nzambe, Kasi bakonzi ya basoda ya Filisitia balobi : « Asengeli te kokende elongo na biso na bitumba. » \v 10 Boye, lamuka na tongo makasi, yo mpe basoda ya nkolo na yo, oyo bayaki elongo na yo. Bolamuka na tongo makasi mpe bokende wana moyi ekobima. \p \v 11 Boye, Davidi mpe bato na ye batelemaki na tongo makasi mpo na kozonga na mokili ya bato ya Filisitia ; mpe bato ya Filisitia bakendeki na Jizireyeli. \c 30 \s1 Davidi abebisi bato ya Amaleki \p \v 1 Davidi mpe bato na ye bakomaki na Tsikilagi, na mokolo ya misato. Na tango wana mpe, bato ya Amaleki bakotaki na ngambo ya Sude mpe na Tsikilagi. Babundisaki Tsikilagi mpe batumbaki yango. \v 2 Bakangaki na bowumbu basi mpe bato nyonso oyo bazalaki kuna, ezala bilenge to mikolo, kasi babomaki moko te kati na bango. Bamemaki bango mpe bazongelaki nzela na bango. \v 3 Tango Davidi mpe bato na ye bakomaki na engumba Tsikilagi, bakutaki yango ebebisama na moto. Basi na bango, bana na bango ya mibali mpe ya basi bakomaki bawumbu. \v 4 Davidi mpe bato na ye balelaki makasi kino bazangaki makasi ya kolela. \v 5 Bamemaki mpe na bowumbu basi mibale ya Davidi : Ayinoami, moto ya Jizireyeli ; mpe Abigayili, moto ya Karimeli, oyo akufisaki mobali, Nabali. \p \v 6 Davidi ayokaki pasi makasi na motema, pamba te bato bazalaki komibongisa mpo na koboma ye na mabanga, mpo ete moto nyonso azalaki na pasi na motema mpo na bana na ye ya mibali mpe ya basi. Kasi Davidi amilendisaki kati na Yawe, Nzambe na ye. \v 7 Boye Davidi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari, mwana mobali ya Ayimeleki : « Memela ngai efode. » Mpe Abiatari amemelaki ye yango. \v 8 Bongo Davidi atunaki Yawe : \pi1 — Nakoki na ngai kolanda lisanga oyo ya miyibi ? Nakokoka na ngai kokanga bango ? \p Yawe azongiselaki ye : \pi1 — Landa bango, okokanga bango solo mpe okokangola bakangami. \p \v 9 Davidi akendeki elongo na basoda na ye, nkama motoba. Bakomaki na moluka ya lubwaku ya Besori epai wapi ba-oyo bazalaki kotikala na sima batelemaki ; \v 10 pamba te mibali nkama mibale balembaki makasi, bongo bakokaki te kokatisa moluka. Kasi Davidi elongo na basoda na ye, nkama minei, bakobaki kolanda. \p \v 11 Basoda ya Davidi bakutanaki na mobali moko ya Ejipito kati na zamba mpe bamemaki ye epai ya Davidi. Bapesaki ye mayi ya komela mpe biloko ya kolia. \v 12 Bapesaki ye gato basala na bambuma ya figi mpe maboke mibale ya bambuma ya vino ekawuka. Sima na ye kolia yango, azwaki lisusu makasi, pamba te aliaki te mpe amelaki te wuta mikolo misato mpe babutu misato. \v 13 Davidi atunaki ye : \pi1 — Ozali na ngambo ya banani mpe owuti wapi ? \p Azongiselaki ye : \pi1 — Nazali moto ya Ejipito mpe mowumbu ya moto moko ya Amaleki. Esali mikolo misato wuta nkolo na ngai atikalaki kosundola ngai mpo ete nazalaki kobela. \v 14 Tokotaki na ngambo ya Sude ya bato ya Kereti, ya etuka ya Yuda, mpe na ngambo ya Sude ya Kalebi ; mpe totumbaki na moto Tsikilagi. \p \v 15 Davidi atunaki ye : \pi1 — Okoki komema ngai na bisika oyo lisanga ya miyibi wana ezali ? \p Azongisaki : \pi1 — Yo, lapa nanu ndayi epai na ngai liboso ya Nzambe ete okoboma ngai te mpe okozongisa ngai te epai ya nkolo na ngai ; bongo ngai nakomema yo epai bango bazali. \p \v 16 Boye amemaki Davidi na esika oyo bato ya Amaleki bazalaki. Mpe bamonaki ete bazalaki ya kopanzana na mboka mobimba, bazalaki kolia, komela mpe kobina mpo na ebele ya bomengo ya bitumba oyo babotolaki na mokili ya bato ya Filisitia mpe ya Yuda. \v 17 Davidi alongaki bango kobanda na tongo kino na pokwa ya mokolo oyo elandaki. Moko te abikaki, longola kaka bilenge mibali nkama minei oyo bamataki na likolo ya bashamo mpe bakimaki. \v 18 Davidi akangolaki biloko nyonso oyo bato ya Amaleki bazwaki elongo na basi na ye mibale. \v 19 Moto na bango moko te azangaki : ezala elenge, mokolo, mwana mobali, mwana mwasi, eloko moko kati na bomengo ya bitumba to eloko moko kati na biloko oyo babotolaki bango. Davidi azongaki na biloko nyonso. \v 20 Davidi akamataki bameme mpe bangombe nyonso. Bato oyo bazalaki kotambola liboso ya bibwele mpo na kolakisa yango nzela bazalaki koloba : « Tala bomengo ya bitumba ya Davidi. » \p \v 21 Bongo Davidi akomaki epai ya mibali nkama mibale oyo bakokaki kolanda ye te mpo ete balembaki makasi, mpe batikaki bango na lubwaku ya Besori. Mibali yango babimaki mpo na koyamba Davidi mpe bato oyo bazalaki elongo na ye. Boye Davidi mpe bato na ye bapusanaki mpe bapesaki bango mbote. \v 22 Kasi kati na bato oyo bakendeki elongo na Davidi, bato nyonso ya mabe mpe batomboki balobaki : \pi1 — Lokola bakendeki na biso te, tokoki kokabola na bango te bomengo ya bitumba. Tika ete moto na moto azwa kaka mwasi na ye elongo na bana na ye mpe akende. \p \v 23 Kasi Davidi alobaki : \pi1 — Te, bandeko na ngai ya mibali ! Bokoki kosala boye te mpo na biloko oyo Yawe apesi biso ! Pamba te abateli biso mpe akabi na maboko na biso mampinga nyonso oyo eyaki kobundisa biso. \v 24 Nani akoki kondima bino na makambo oyo bozali koloba ? Eteni ya moto oyo atikalaki kokengela biloko mpe eteni ya moto oyo akendeki na bitumba esengeli kozala ndenge moko. Tokokabola nyonso ndenge moko. \p \v 25 Kobanda mokolo wana kino lelo, Davidi akomisaki yango mobeko mpe malako kati na Isalaele. \p \v 26 Tango Davidi akomaki na Tsikilagi, atindaki ndambo ya bomengo ya bitumba epai ya bampaka ya Yuda, oyo bazalaki baninga na ye. Alobaki : « Tala kado mpo na bino kowuta na bomengo ya bitumba ya banguna ya Yawe. » \p \v 27 Atindaki ndambo epai ya ba-oyo bazalaki na Beteli, na ngambo ya sude ya Ramoti mpe na Yatiri ; \v 28 mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Aroeri, na Sipimoti, na Eshitemoa ; \v 29 mpe epai ya ba-oyo bazalaki na Rakali, kati na bingumba ya bato ya Yerameeli, ya bato ya Keni ; \v 30 epai ya ba-oyo bazalaki na Orima, na Bori-Ashani, na Ataki ; \v 31 epai ya ba-oyo bazalaki na Ebron mpe na bisika nyonso oyo Davidi mpe bato na ye balekaki. \c 31 \s1 Suka ya bomoi ya Saulo \r (2Sa 1.4-12; 1Ma 10.1-12) \p \v 1 Bato ya Filisitia bazalaki kobundisa Isalaele, kasi bato ya Isalaele bakimaki liboso na bango mpe mingi kati na bango bakufaki na ngomba Giliboa. \v 2 Bato ya Filisitia balandaki Saulo elongo na bana na ye ya mibali, kasi babomaki bana na ye ya mibali : Jonatan, Abinadabi mpe Maliki-Shuwa. \v 3 Bongo bitumba ekomaki mpo na koboma Saulo. Tango basoda oyo babundaka na matolotolo bamonaki Saulo, ye Saulo alengaki na somo. \v 4 Saulo alobaki na soda oyo amemaki bibundeli na ye : « Bimisa mopanga na yo na ebombelo na yango mpe boma ngai, noki te bato oyo bakatama ngenga te bakoya kotuba ngai mpe kosakanela ngai. » \p Kasi soda oyo amemaki bibundeli na ye aboyaki, pamba te azalaki kobanga. Bongo Saulo akamataki mopanga na ye mpe amibwakaki na likolo na yango. \v 5 Tango soda oyo amemaki bibundeli na ye amonaki ete Saulo akufi, ye mpe amibwakaki na likolo ya mopanga na ye mpe akufaki elongo na Saulo. \v 6 Ezalaki bongo nde Saulo, bana na ye misato ya mibali, soda oyo azalaki komema bibundeli na ye mpe basoda na ye nyonso bakufaki bango nyonso elongo mokolo wana. \p \v 7 Tango bato ya Isalaele, oyo bazalaki na ngambo mosusu ya lubwaku mpe ba-oyo bazalaki na ngambo mosusu ya Yordani bamonaki ete mampinga ya Isalaele esili kopanzana, mpe ete Saulo mpe bana na ye ya mibali bakufi, basundolaki bingumba na bango mpe bakimaki. Bato ya Filisitia bayaki kovanda na bingumba yango. \p \v 8 Na mokolo oyo elendaki, tango bato ya Filisitia bayaki mpo na kolongola biloko oyo ezalaki na banzoto ya bibembe, bamonaki Saulo mpe bana na ye misato ya mibali oyo bakufaki na ngomba Giliboa. \v 9 Bakataki moto ya Saulo, bazwaki bibundeli na ye mpe batindaki bato na mokili mobimba ya bato ya Filisitia mpo ete bapanza sango malamu oyo ya elonga kati na tempelo ya banzambe na bango ya bikeko mpe kati na bato na bango. \v 10 Batiaki bibundeli ya Saulo kati na tempelo ya banzambe na bango ya bikeko, Asitarite, mpe badiembikaki nzoto na ye na mir ya Beti-Sheani. \p \v 11 Tango bavandi ya Yabeshi kati na Galadi bayokaki makambo oyo bato ya Filisitia basalaki Saulo, \v 12 bilombe na bango nyonso batelemaki mpe batambolaki butu mobimba mpo na kokoma na Beti-Sheani. Bongo sima na bango kokitisa bibembe ya Saulo mpe ya bana na ye ya mibali wuta na mir, bazongaki na Yabeshi epai wapi batumbaki yango. \v 13 Bazwaki mikuwa na bango, bakundaki yango na Yabeshi, na se ya nzete ya tamarisi, mpe bakilaki bilei mikolo sambo.