\id 1KI Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h 1 Bakonzi \toc1 1 Bakonzi \toc2 1 Bakonzi \toc3 1Ba \mt1 1 Bakonzi \c 1 \ms1 Bokonzi ya Salomo \s1 Adoniya akani kokoma mokonzi \p \v 1 Tango mokonzi Davidi akomaki mobange makasi, azalaki lisusu koyoka moto te na nzoto, ezala bafiniki ye bilamba ebele. \v 2 Boye, basali ya Davidi balobaki na ye : « Tika ete tolukela mokonzi elenge mwasi moko oyo ayebi nanu nzoto ya mibali te mpo ete azala pene ya mokonzi, abatela ye mpe alala mbeto moko na ye ; mpe mpo ete mokonzi, nkolo na biso, ayoka lisusu moto na nzoto ! » \p \v 3 Boye, balukaki kati na Isalaele mobimba elenge mwasi moko ya kitoko ; bamonaki Abishagi, moto ya mboka Sunami, mpe bamemaki ye epai ya mokonzi. \v 4 Elenge mwasi yango azalaki kitoko mingi, akomaki kobatela mokonzi mpe kosalela ye ; kasi mokonzi atikalaki te kosangisa na ye nzoto. \p \v 5 Nzokande, Adoniya, mwana mobali oyo Agite abotelaki Davidi, amilobelaki na motema na ye : « Ngai nde nakozala mokonzi ! » \p Mpo na yango, asombaki bashar, bampunda ; mpe basoda tuku mitano mpo ete batambola liboso na ye lokola bakengeli. \v 6 Nzokande, tata na ye atikalaki kopamela ye ata mokolo moko te mpe kotuna ye : « Mpo na nini ozali kosala boye ? » Adoniya azalaki penza kitoko mpe abotamaki sima na Abisalomi. \p \v 7 Adoniya asololaki na Joabi, mwana mobali ya Tseruya, mpe na Nganga-Nzambe Abiatari ; mpe bango bandimaki kosunga ye. \v 8 Kasi Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada ; mosakoli Natan, Shimei, Reyi mpe bakengeli ya Davidi baboyaki kosangana na Adoniya. \p \v 9 Adoniya abonzaki na libanga ya Zoeleti bambeka ebele ya bameme, ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta, pembeni ya Eyini-Rogeli ; abengisaki bandeko na ye nyonso ya mibali, bana mibali ya mokonzi, mpe bato nyonso ya Yuda oyo bazalaki kosala epai ya mokonzi. \v 10 Kasi abengisaki te mosakoli Natan, Benaya, bakengeli ya mokonzi mpe Salomo, ndeko na ye ya mobali. \s1 Natan mpe Batisheba epai ya Davidi \p \v 11 Natan atunaki Batisheba, mama ya Salomo : \pi1 — Boni, oyoki te ete Adoniya, mwana mobali ya Agite, akomi mokonzi ; kasi mokonzi Davidi ayebi te ? \v 12 Sik’oyo, tika ete napesa yo toli oyo ekobikisa bomoi na yo mpe bomoi ya Salomo, mwana na yo ya mobali. \v 13 Kota epai ya mokonzi Davidi mpe loba na ye : « Mokonzi, nkolo na ngai, olapaki ndayi te liboso na ngai mwasi mowumbu na yo : ‹ Solo, Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi ? › Boye mpo na nini Adoniya akomi mokonzi ? » \v 14 Wana okozala nanu koloba na mokonzi, ngai mpe nakokota mpe nakobeta sete na maloba na yo. \p \v 15 Batisheba akendeki kotala mokonzi kati na shambre. Mokonzi akomaki mobange makasi, mpe Abishagi, moto ya Sunami, azalaki kobatela ye. \v 16 Batisheba agumbamaki mpe afukamaki liboso ya mokonzi ; mpe mokonzi atunaki ye : \pi1 — Boni, olingi nini ? \p \v 17 Batisheba azongisaki : \pi1 — Nkolo na ngai, yo moko olapaki ndayi, liboso na ngai mwasi mowumbu na yo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, na koloba : « Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai na bokonzi mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi. » \v 18 Kasi sik’oyo Adoniya akomi mokonzi ; mpe yo mokonzi, nkolo na ngai, oyebi yango te ! \v 19 Abonzi bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta, ya bameme ; mpe abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, Nganga-Nzambe Abiatari ; Joabi, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; kasi abengisi te Salomo, mowumbu na yo. \v 20 Mokonzi, nkolo na ngai, miso ya bato nyonso ya Isalaele ezali kotalela yo mpo na koyeba soki nani akovanda na kiti ya bokonzi sima na mokonzi, nkolo na ngai. \v 21 Soki te, tango mokonzi, nkolo na ngai, akolala elongo na bakoko na ye, bakozwa ngai elongo na Salomo, mwana na ngai ya mobali, lokola babomi. \p \v 22 Wana Batisheba azalaki nanu koloba na mokonzi, mosakoli Natan akomaki. \v 23 Bayebisaki mokonzi : \pi1 — Tala mosakoli Natan ! \p Mosakoli Natan akendeki liboso ya mokonzi, agumbamaki liboso ya mokonzi, elongi kino na se. \v 24 Bongo, Natan alobaki : \pi1 — Mokonzi, nkolo na ngai ; boni, olobaki ete Adoniya akokitana na yo mpe akovanda na kiti na yo ya bokonzi ? \v 25 Na mokolo ya lelo, akei kobonza bambeka ebele ya bangombe, ya bana ngombe ya mafuta mpe ya bameme ; abengisi bana mibali nyonso ya mokonzi, bakonzi ya mampinga mpe Nganga-Nzambe Abiatari ; bazali kolia mpe komela elongo na ye mpe bazali koloba : « Tika ete mokonzi Adoniya awumela na bomoi ! » \v 26 Kasi abengisi te ngai, mosali na yo ; Nganga-Nzambe Tsadoki, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mpe Salomo, mosali na yo. \v 27 Boni, ezali solo na mitindo ya mokonzi, nkolo na ngai, nde likambo oyo esalemi ? Nzokande, oyebisaki te na mosali na yo nani akovanda na kiti ya bokonzi ya nkolo na ngai sima na yo ? \s1 Davidi aponi Salomo \r (1Ma 29.21-25) \p \v 28 Mokonzi Davidi alobaki : \pi1 — Bobengela ngai Batisheba. \p Batisheba ayaki pene ya mokonzi mpe atelemaki liboso na ye. \v 29 Mokonzi alapaki ndayi na maloba oyo : \pi1 — Na Kombo na Yawe oyo akangolaki ngai na mikakatano nyonso, \v 30 nakokokisa solo, na mokolo ya lelo, ndayi oyo nalapaki epai na yo na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele. Salomo, mwana na yo ya mobali, akokitana na ngai mpe akovanda na kiti na ngai ya bokonzi. \p \v 31 Batisheba akitisaki elongi na ye kino na se mpe agumbamaki liboso ya mokonzi ; alobaki : \pi1 — Tika ete mokonzi Davidi, nkolo na ngai, awumela seko na bomoi ! \p \v 32 Mokonzi Davidi alobaki : \pi1 — Bobenga Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan mpe Benaya, mwana mobali ya Yeoyada. \p Tango bayaki liboso ya mokonzi, \v 33 mokonzi alobaki na bango : \pi1 — Bozwa elongo na bino basali ya mokonzi na bino mpe bomatisa Salomo, mwana na ngai ya mobali, na likolo ya mile na ngai ya mwasi. Bokende elongo na ye na etima ya Giyoni ! \v 34 Kuna, Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bakopakola ye mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Bokobeta kelelo mpe boganga : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! » \v 35 Sima, bokozonga elongo na ye, mpe akoya kovanda na kiti na ngai ya bokonzi. Ye nde akokoma mokonzi na esika na ngai. Nakomisi ye mokonzi ya Isalaele mpe ya Yuda. \p \v 36 Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azongiselaki mokonzi : \pi1 — Amen ! Tika ete Yawe, Nzambe ya mokonzi, nkolo na ngai, akokisa maloba oyo. \v 37 Ndenge Yawe azalaki elongo na mokonzi, nkolo na ngai, tika ete azala mpe elongo na Salomo mpe akomisa kiti na ye ya bokonzi monene koleka oyo ya mokonzi Davidi, nkolo na ngai ! \p \v 38 Boye, Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti bakendeki, bamatisaki Salomo na likolo ya mile ya mokonzi Davidi mpe bamemaki ye na etima ya Giyoni. \v 39 Nganga-Nzambe Tsadoki azwaki liseke ya mafuta, kati na ndako ya kapo ya bule, mpe apakolaki Salomo mafuta. Bongo, babetaki kelelo, mpe bato nyonso bagangaki : « Tika ete mokonzi Salomo awumela seko na bomoi ! » \p \v 40 Bato nyonso oyo bazalaki elongo na ye bazalaki kobeta baflite mpe kosepela makasi sima na ye ; mabele eninganaki na makelele na bango. \s1 Adoniya abangi Salomo \p \v 41 Adoniya mpe bato nyonso oyo abengisaki mpo ete bazala na ye elongo bayokaki makelele yango wana bazalaki kosilisa kolia. Boye, tango Joabi ayokaki mongongo ya kelelo, atunaki : \pi1 — Makelele wana kati na engumba elakisi nini ? \p \v 42 Wana azalaki nanu koloba, Jonatan, mwana mobali ya Nganga-Nzambe Abiatari, akomaki. Adoniya alobaki na ye : \pi1 — Kota ! Moto ya lokumu lokola yo amemaka kaka basango ya malamu. \p \v 43 Jonatan azongiselaki Adoniya : \pi1 — Ezali bongo te ! Mokonzi Davidi, nkolo na biso, akomisi Salomo mokonzi ! \v 44 Mokonzi atindaki elongo na ye Nganga-Nzambe Tsadoki, mosakoli Natan, Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, bato ya Kereti mpe bato ya Peleti, mpe bamatisi ye na likolo ya mile ya mokonzi. \v 45 Nganga-Nzambe Tsadoki mpe mosakoli Natan bapakoli ye mafuta, na etima ya Giyoni, mpo ete akoma mokonzi. Wuta na Giyoni, bagangi na esengo, mpe engumba mobimba esepeli na likambo yango. Yango nde makelele oyo bozali koyoka. \v 46 Mpe lisusu, Salomo avandi na kiti ya bokonzi ; \v 47 basali ya mokonzi bayei kopesa longonya epai na Davidi, mokonzi na biso, na maloba oyo : « Tika ete Nzambe na yo akomisa kombo ya Salomo monene koleka kombo na yo, mpe kiti na ye ya bokonzi, monene koleka oyo ya yo ! » Bongo mokonzi agumbamaki mpe agumbamelaki Nzambe na mbeto na ye, \v 48 mpe alobaki : « Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, apambolama, Ye oyo, na mokolo ya lelo, apesi ngai nzela ya komona moto oyo akitani na ngai na bokonzi ! » \p \v 49 Tango bato oyo Adoniya abengisaki bayokaki bongo, batelemaki na kobanga mpe bakimaki moto na moto na nzela na ye. \v 50 Kasi mpo ete Adoniya abangaki Salomo, akendeki kokanga maseke ya etumbelo. \p \v 51 Bayebisaki Salomo : \pi1 — Adoniya azali kobanga mokonzi Salomo mpe akangi maseke ya etumbelo. Alobi : « Tika ete mokonzi Salomo alapa, na mokolo ya lelo, ndayi liboso na ngai ete akoboma mosali na ye te na mopanga. » \p \v 52 Salomo azongisaki : \pi1 — Soki kaka atamboli na sembo, suki ata moko te ya moto na ye ekokweya na mabele ; kasi soki mabe emonani kati na ye, akokufa. \p \v 53 Boye, mokonzi Salomo atindaki bato mpo na kokitisa ye wuta na etumbelo. Bongo Adoniya ayaki mpe agumbamaki liboso ya mokonzi Salomo, mpe Salomo alobaki na ye : \pi1 — Zonga na ndako na yo. \c 2 \s1 Malako ya Davidi epai ya Salomo \p \v 1 Tango Davidi akomaki pene ya kokufa, apesaki malako oyo epai ya Salomo, mwana na ye ya mobali : \pi1 \v 2 — Nalingi kokende na nzela oyo bato nyonso bakendaka. Zala makasi, lakisa ete ozali mobali. \v 3 Sala makambo oyo Yawe, Nzambe na yo, alingaka : tambola na banzela na Ye, batela malako mpe bikateli na Ye, mibeko mpe mitindo na Ye, ndenge ekomama kati na Mobeko ya Moyize, mpo ete olonga na makambo nyonso oyo okosala mpe na bisika nyonso oyo okokende ; \v 4 mpe mpo ete Yawe akokisa elaka oyo apesaki ngai na maloba oyo : « Soki bakitani na yo basali keba na etamboli na bango, soki batamboli liboso na ngai na bosembo, na mitema na bango mobimba, ekozala tango nyonso na moko kati na bakitani na yo, oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele. \v 5 Sik’oyo, yo moko oyebi makambo oyo Joabi, mwana mobali ya Tseruya, asalaki ngai ; makambo oyo asalaki bakonzi mibale ya mampinga ya Isalaele : Abineri, mwana mobali ya Neri ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri. Abomaki bango, asopaki makila ya bitumba na tango ya kimia ; boye, atiaki makila ya bitumba na mokaba oyo alataki na loketo na ye, mpe na basandale oyo ezalaki na makolo na ye. \v 6 Salela ye kolanda bwanya na yo mpe kotika te ete suki na ye ya pembe ekita na kimia na mboka ya bakufi. \v 7 Kasi talisa bolamu epai ya bana mibali ya Barizilayi, moto ya Galadi ; mpe sala ete bazala kati na bato oyo bakobanda kolia mesa moko elongo na yo, pamba te basungaki ngai tango nazalaki kokima Abisalomi, ndeko na yo ya mobali. \v 8 Mpe yeba ete, elongo na yo, ozali na Shimei, mwana mobali ya Gera, moto ya Benjame, na mboka Bawurimi, oyo alakelaki ngai mabe makasi na mokolo oyo nazalaki kokende na Maanayimi. Tango ayaki kokutana na ngai na Yordani, nalapaki ndayi oyo mpo na ye na Kombo na Yawe : ‹ Nakoboma yo na mopanga te. › \v 9 Kasi sik’oyo, kozwa ye te lokola moto oyo asali mabe te. Ozali na bwanya, okoyeba nini osengeli kosala mpo na ye. Kitisa suki na ye ya pembe kati na makila, na mboka ya bakufi. » \s1 Kufa ya Davidi \r (1Ma 29.26-28) \p \v 10 Davidi akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. \v 11 Davidi akonzaki Isalaele mibu tuku minei : mibu sambo na Ebron, mpe mibu tuku misato na misato na Yelusalemi. \p \v 12 Salomo avandaki na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ye, mpe bokonzi na ye elendisamaki. \s1 Bakateli Adoniya etumbu ya kufa \p \v 13 Adoniya, mwana mobali ya Agite, akendeki epai ya Batisheba, mama ya Salomo. Batisheba atunaki ye : \pi1 — Boni, oyei kotala ngai na kimia ? \p Azongisaki : \pi1 — Iyo, nayei na kimia. \m \v 14 Abakisaki : \pi1 — Nazali na likambo moko ya koyebisa yo. \p Batisheba azongisaki : \pi1 — Okoki koloba yango. \p \v 15 Adoniya alobaki : \pi1 — Lokola oyebi yango, bokonzi ezalaki ya ngai ; bato nyonso ya Isalaele bazwaki ngai lokola mokonzi na bango, kasi makambo ebongwanaki mpe bokonzi ekeyi epai ya ndeko na ngai ya mobali, pamba te epesamelaki ye wuta na Yawe. \v 16 Sik’oyo, nazali na bosenga moko, kopimela ngai yango te. \p Batisheba alobaki : \pi1 — Okoki koloba yango. \p \v 17 Adoniya alobaki : \pi1 — Nabondeli yo, loba na mokonzi Salomo ete apesa ngai Abishagi, moto ya Sunami, mpo ete akoma mwasi na ngai, pamba te mokonzi akoki koboya te koyokela yo. \p \v 18 Batisheba azongisaki : \pi1 — Malamu ! Ngai moko nakolobela yo epai ya mokonzi. \p \v 19 Tango Batisheba akendeki epai ya mokonzi Salomo mpo na kolobela Adoniya, mokonzi atelemaki mpo na kokutana na Batisheba, agumbamaki liboso na ye mpe avandaki na kiti na ye ya bokonzi. Asengaki ete batia kiti mpo na mama ya mokonzi, mpe Batisheba avandaki na ngambo ya loboko ya mobali ya mokonzi. \p \v 20 Batisheba alobaki : \pi1 — Nazali na bosenga moko ya moke mpo na koyebisa yo, kasi kopimela ngai yango te. \p Mokonzi azongisaki : \pi1 — Loba na yo, mama na ngai ; nakopimela yo yango te. \p \v 21 Batisheba alobaki : \pi1 — Tika ete Abishagi, moto ya Sunami, akoma mwasi ya Adoniya, ndeko na yo ya mobali. \p \v 22 Mokonzi Salomo azongiselaki mama na ye : \pi1 — Mpo na nini ozali kosenga Abishagi, moto ya Sunami, mpo na Adoniya ? Okokaki mpe kosenga bokonzi mpo na ye, mpo ete azali yaya na ngai ; ndenge moko mpe mpo na Nganga-Nzambe Abiatari, mpo na Joabi, mwana mobali ya Tseruya ! \p \v 23 Bongo, mokonzi Salomo alapaki ndayi na Kombo na Yawe : \pi1 — Tika ete Nzambe apesa ngai etumbu ya makasi soki Adoniya akufi te mpo na bosenga oyo ! \pi1 \v 24 Mpe sik’oyo, na Kombo na Yawe oyo alendisi ngai na kiti ya bokonzi ya Davidi, tata na ngai, mpe oyo asali ete bokonzi ezala na libota na ngai ndenge alapaki yango na ndayi, Adoniya akokufa kaka lelo. \p \v 25 Mokonzi Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, kobeta Adoniya ; mpe Adoniya akufaki. \p \v 26 Mokonzi alobaki na Nganga-Nzambe Abiatari : \pi1 — Zonga na bilanga na yo, na Anatoti, pamba te osengeli kokufa. Kasi nakoboma yo sik’oyo te, pamba te omemaki Sanduku ya Nkolo Yawe liboso ya Davidi, tata na ngai, mpe okabolaki na ye pasi nyonso. \p \v 27 Boye, Salomo alongolaki Abiatari na mosala na ye ya Nganga-Nzambe ya Yawe, mpo na kokokisa maloba oyo Yawe alobaki na Silo na tina na libota ya Eli. \p \v 28 Tango sango ekomaki epai ya Joabi, ye oyo abundelaki Adoniya kasi Abisalomi te, akimaki na Ndako ya kapo ya Yawe mpe asimbaki maseke ya etumbelo. \v 29 Bayebisaki Salomo ete Joabi akei na Ndako ya kapo ya Yawe mpe azali pembeni ya maseke ya etumbelo. Salomo atindaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, ete akende koboma ye. \p \v 30 Benaya akotaki na Ndako ya kapo ya Yawe mpe alobaki na Joabi : \pi1 — Mokonzi alobi ete obima. \p Kasi Joabi azongisaki : \pi1 — Te, nakokufela kaka awa ! \p Benaya azongaki epai ya mokonzi mpo na koyebisa ye eyano ya Joabi. \v 31 Mokonzi apesaki ye mitindo : \pi1 — Sala ndenge alobi ; boma ye mpe kunda ye. Na bongo nde okolongola likolo ya moto na ngai mpe ya libota ya tata na ngai, ngambo ya makila oyo Joabi asopaki na pamba. \v 32 Tika ete Yawe akweyisa likolo na ye moko mokumba ya makila oyo asopaki, pamba te abundisaki bato mibale mpe abomaki bango na mopanga ; tata na ngai, Davidi, ayebaki kutu te. Tala bakombo ya bato mibale yango : Abineri, mwana mobali ya Neri, mokonzi ya mampinga ya Isalaele ; mpe Amasa, mwana mobali ya Yeteri, mokonzi ya mampinga ya Yuda ; bazalaki bato malamu mpe ya sembo koleka ye. \v 33 Tika ete ngambo ya makila na bango ezala mpo na libela likolo ya moto ya Joabi mpe ya bana na ye. Kasi tika ete kimia ya Yawe ezala mpo na libela na Davidi, na bana na ye, na libota na ye mpe na kiti na ye ya bokonzi. \p \v 34 Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, akendeki kobeta Joabi mpe abomaki ye. Bakundaki ye na ndako na ye moko, kati na esobe. \v 35 Mokonzi akomisaki Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, mokonzi ya mampinga na esika ya Joabi, mpe atiaki Nganga-Nzambe Tsadoki na esika ya Abiatari. \p \v 36 Mokonzi abengisaki Shimei mpe alobaki na ye : \pi1 — Tonga ndako kati na Yelusalemi mpe vanda kuna. Okokende esika mosusu te. \v 37 Mokolo oyo okobima mpe okokatisa lubwaku ya Sedron, okokufa, mpe makila na yo ekotangama na moto na yo moko. \p \v 38 Shimei azongiselaki mokonzi : \pi1 — Makambo oyo olobi ezali malamu ! Mowumbu na yo akosala ndenge mokonzi, nkolo na ngai, alobi. \p Shimei avandaki na Yelusalemi mikolo ebele. \p \v 39 Kasi sima na mibu misato, bawumbu mibale kati na bawumbu ya Shimei bakimaki epai ya Akishi, mwana mobali ya Maaka, mokonzi ya Gati. Bayebisaki Shimei ete bawumbu na ye bazali na Gati. \v 40 Tango Shimei ayokaki bongo, abongisaki ane na ye mpe akendeki epai ya Akishi, na Gati, mpo na koluka bawumbu na ye. Shimei akendeki penza na Gati mpe azongisaki bawumbu yango na Yelusalemi. \p \v 41 Bamemelaki Salomo sango ete Shimei alongwaki na Yelusalemi, akendeki na Gati mpe azongi. \v 42 Mokonzi abengisaki Shimei mpe alobaki na ye : \pi1 — Nalapisaki yo ndayi te na Kombo na Yawe mpe nakebisaki yo te ete mokolo oyo okobima mpo na kokende esika mosusu, okokufa penza ? Mpe na mokolo yango, olobaki na ngai : « Makambo oyo olobi ezali malamu, nakotosa. » \v 43 Mpo na nini okokisi te ndayi na yo epai na Yawe mpo na kotosa mitindo oyo napesaki ? \p \v 44 Mokonzi alobaki lisusu na Shimei : \pi1 — Oyebi lisusu mabe nyonso oyo osalaki epai ya Davidi, tata na ngai ! Boye, Yawe akomemisa yo ngambo ya mabe oyo yo moko osali. \v 45 Kasi mokonzi Salomo akopambolama, mpe kiti ya bokonzi ya Davidi ekolendisama makasi liboso ya Yawe mpo na libela. \p \v 46 Mokonzi apesaki mitindo epai ya Benaya, mwana mobali ya Yeoyada. Benaya abimaki, abetaki Shimei, mpe Shimei akufaki. Bokonzi elendisamaki na maboko ya Salomo. \c 3 \s1 Salomo asengi bwanya \p \v 1 Salomo asalaki boyokani elongo na Faraon, mokonzi ya Ejipito ; abalaki mwana mwasi ya Faraon mpe amemaki ye na engumba ya Davidi, kino tango asilisaki kotonga ndako na ye ya bokonzi, Tempelo ya Yawe mpe bamir, zingazinga ya Yelusalemi. \v 2 Na tango wana, bato bazalaki kotumba mbeka na bisambelo ya likolo ya bangomba, pamba te ezalaki nanu na tempelo moko te oyo etongamaki mpo na Kombo na Yawe. \v 3 Salomo alakisaki bolingo na ye mpo na Yawe na kotambola kolanda malako ya Davidi, tata na ye, longola kaka kotumba mbeka mpe ansa na bisambelo ya likolo ya bangomba. \r (2Ma 1.2-13) \p \v 4 Mokonzi akendeki na Gabaoni mpo na kobonza mbeka, pamba te ezalaki esambelo ya likolo ya ngomba oyo elekaki motuya, mpe kuna, Salomo abonzaki bambeka ya kotumba nkoto moko, na etumbelo wana. \v 5 Na Gabaoni, Yawe amimonisaki epai ya Salomo kati na ndoto ya butu. Nzambe alobaki na ye : \pi1 — Senga Ngai nyonso oyo olingi ete napesa yo. \p \v 6 Salomo azongisaki : \pi1 — Otalisi bolamu monene epai ya tata na ngai, Davidi, mosali na Yo, pamba te atambolaki na boyengebene mpe na bosembo na miso na Yo ; okobaki kotalisa ye bolamu monene na Yo mpe opesi ye mwana mobali oyo avandi lelo na kiti na ye ya bokonzi. \v 7 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe na ngai, okomisi mowumbu na Yo mokonzi na esika ya Davidi, tata na ngai. Kasi nazali nanu elenge mpe nayebi te ndenge nini nakoki komema mokumba oyo. \v 8 Mowumbu na Yo azali awa kati na bato oyo oponi : bato ebele oyo bakoki kotanga motango na bango te mpo ete bazali ebele penza. \v 9 Boye, pesa na mowumbu na Yo motema ya mayele mpo na kokamba bato na Yo mpe kososola malamu mpe mabe. Pamba te, nani akolonga kokamba ebele ya bato na Yo oyo ? \p \v 10 Nkolo asepelaki na likambo oyo Salomo asengaki. \v 11 Nzambe alobaki na ye : \pi1 — Lokola osengi bwanya, kasi osengi bomoi molayi te to bomengo mpo na yo moko te ; lokola osengi kufa ya banguna na yo te, kasi osengi bwanya mpo na kokata makambo na bosembo, \v 12 nakosala nyonso oyo osili kosenga. Nakopesa yo motema ya bwanya mpe ya mayele, na lolenge oyo natikala nanu te kopesa na moto moko liboso na yo ; mpe sima na yo, moto moko te akotikala kozala lokola yo. \v 13 Nakopesa yo lisusu oyo osengi te : bomengo mpe lokumu. Na bongo, na bomoi na yo mobimba, mokonzi moko te akokokana na yo. \v 14 Mpe soki otamboli na banzela na Ngai, otosi malako mpe mitindo na Ngai ndenge tata na yo, Davidi, asalaki, nakopesa yo bomoi molayi. \p \v 15 Salomo alamukaki mpe asosolaki ete ezalaki ndoto. Azongaki na Yelusalemi, atelemaki liboso ya Sanduku ya Boyokani ya Yawe. Abonzaki bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani ; mpe asalisaki feti monene elongo na basali na ye nyonso. \s1 Salomo akati makambo na bosembo \p \v 16 Basi ya ndumba mibale bayaki epai ya mokonzi mpe batelemaki liboso na ye. \v 17 Moko na bango alobaki : \pi1 — Nabondeli yo, nkolo na ngai, yoka ngai ! Ngai mpe mwasi oyo, tovandaka ndako moko. Tozalaki na ye na ndako tango nabotaki mwana. \v 18 Na mokolo ya misato sima na mbotama ya mwana na ngai, mwasi oyo mpe abotaki. Tozalaki kaka biso moko kati na ndako, moto mosusu azalaki te, kaka biso mibale. \v 19 Nzokande, na butu, alalelaki mwana na ye, mpe mwana yango akufaki. \v 20 Bongo, na kati-kati ya butu, alamukaki, alongolaki mwana na ngai pembeni na ngai, wana ngai, mwasi mowumbu na yo, nazalaki ya kolala, mpe atiaki ye na tolo na ye ; mpe atiaki mwana na ye, oyo akufaki, na tolo na ngai. \v 21 Na tongo, tango nalamuki mpo na komelisa mwana na ngai mabele, namoni ete mwana azali ya kokufa. Kasi tango natali ye penza malamu, kaka na tongo yango, namoni ete ezali mwana na ngai te, oyo ngai nabotaki ! \p \v 22 Mwasi mosusu alobaki : \pi1 — Te, ezali lokuta ! Mwana oyo azali na bomoi azali mwana na ngai, kasi oyo akufi azali mwana na yo ! \p Kasi mwasi oyo azwaki maloba liboso alobaki lisusu : \pi1 — Te ! Mwana oyo akufi azali mwana na yo, kasi oyo ya bomoi azali nde mwana na ngai ! \p Na bongo, bakomaki koswana liboso ya mokonzi. \p \v 23 Mokonzi alobaki : \pi1 — Moko azali koloba : « Mwana oyo azali na bomoi azali mwana na ngai, kasi mwana ya kokufa azali nde mwana na yo ! » Wana mosusu azali mpe koloba : « Te ! Mwana oyo akufi azali mwana na yo, kasi mwana ya bomoi azali nde mwana na ngai ! » \p \v 24 Boye, mokonzi alobaki lisusu : \pi1 — Bomemela ngai mopanga ! \p Bamemelaki mokonzi mopanga. \v 25 Mokonzi apesaki mitindo : \pi1 — Bokata mwana oyo azali na bomoi na biteni mibale, bopesa eteni moko na mwasi moko ; mpe eteni mosusu, na mwasi mosusu. \p \v 26 Mwasi oyo mwana na ye azalaki na bomoi, ayokaki pasi na motema mpo na mwana na ye mpe alobaki na mokonzi : \pi1 — Nabondeli yo, nkolo na ngai ! Pesa ye mwana oyo azali na bomoi, koboma mwana te ! \p Kasi mwasi mosusu alobaki : \pi1 — Kata ye ! Na bongo, akozala ya ngai te, mpe akozala ya ye te ! \p \v 27 Boye, mokonzi akataki likambo, alobaki : \pi1 — Boboma mwana te ! Bopesa mwana oyo azali na bomoi epai ya mwasi ya liboso, pamba te ye nde azali mama na ye. \p \v 28 Tango Isalaele mobimba bayokaki ndenge mokonzi akataki likambo oyo, babangaki mokonzi mpo ete bamonaki ete azali solo na bwanya ya Nzambe mpo na kokata makambo na bosembo. \c 4 \s1 Bakambi oyo basalaka elongo na Salomo \p \v 1 Mokonzi Salomo akonzaki Isalaele mobimba. \b \li4 \v 2 Tala bakambi oyo bazalaki kosala na ye elongo : \b \li1 Azaria, koko ya Nganga-Nzambe Tsadoki ; \li1 \v 3 Eliyorefi mpe Ayiya, bana mibali ya Shisha, bazalaki bakomi mikanda ; \li1 Jozafati, mwana mobali ya Ayiludi, azalaki mobombi mikanda ; \li1 \v 4 Benaya, mwana mobali ya Yeoyada, azalaki mokonzi ya mampinga ; \li1 Tsadoki mpe Abiatari, bazalaki Banganga-Nzambe ; \li1 \v 5 Azaria, mwana mobali ya Natan, azalaki mokonzi ya babateli biloko ya mokonzi ; \li1 Zabudi, mwana mobali ya Natan, azalaki Nganga-Nzambe mpe mopesi toli ya mokonzi ; \li1 \v 6 Ayishari, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi ; \li1 Adonirami, mwana mobali ya Abida, azalaki mokengeli bato ya misala makasi. \b \p \v 7 Kati na Isalaele mobimba, Salomo atiaki mpe bayangeli zomi na mibale ya bituka, oyo bazalaki na mokumba ya komema biloko mpo na mokonzi mpe mpo na ndako na ye. Moyangeli moko na moko asengelaki kopesa biloko mpo na sanza moko na mobu. \b \li4 \v 8 Tala bakombo na bango : \b \li1 Beni-Uri : moyangeli ya etuka ya bangomba ya Efrayimi ; \li1 \v 9 Beni-Dekeri : moyangeli ya Makatsi, Shaalibimi, Beti-Shemeshi, Eloni mpe Beti-Anani ; \li1 \v 10 Beni-Esedi : moyangeli ya Aruboti (Soko mpe mokili mobimba ya Eferi) ; \li1 \v 11 Beni-Abinadabi : moyangeli ya Dori ; abalaki Tafati, mwana mwasi ya Salomo ; \li1 \v 12 Baana, mwana mobali ya Ayiludi : moyangeli ya Taanaki, Megido mpe Beti-Sheani mobimba, pembeni ya Tsaritani, na se ya Jizireyeli, wuta na Beti-Sheani, na Abele-Meola mpe koleka Yokimeami ; \li1 \v 13 Beni-Geberi : azalaki kovanda na Ramoti kati na Galadi mpe azalaki moyangeli ya bamboka ya Yairi, mwana mobali ya Manase, kati na Galadi, mpe ya Arigobi kati na Bashani oyo ezalaki na bingumba tuku motoba oyo batonga makasi mpe bikangelo bikuke ya bamir na yango ezalaki ya bibende ya bronze. \li1 \v 14 Ayinadabi, mwana mobali ya Ido : moyangeli ya Maanayimi ; \li1 \v 15 Ayimaatsi : moyangeli ya Nefitali. Ye mpe abalaki Basimati, mwana mwasi ya Salomo. \li1 \v 16 Baana, mwana mobali ya Ushayi : moyangeli ya Aseri mpe ya Bealoti ; \li1 \v 17 Jozafati, mwana mobali ya Paruya : moyangeli ya Isakari ; \li1 \v 18 Shimei, mwana mobali ya Ela : moyangeli ya Benjame. \li1 \v 19 Geberi, mwana mobali ya Uri : moyangeli ya Galadi (mokili ya Sikoni, mokonzi ya bato ya Amori ; mpe mokili ya Ogi, mokonzi ya Bashani). \li4 Mpe na likolo ya bayangeli nyonso, ezalaki na moyangeli moko oyo azalaki kokamba bango. \b \p \v 20 Bato ya Yuda mpe ya Isalaele bazalaki ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene ; bazalaki kolia, komela mpe bazalaki na esengo. \p \v 21 Salomo azalaki kokonza bikolo wana nyonso, kobanda na ebale Efrate kino na mokili ya bato ya Filisitia, mpe kino koleka mondelo ya Ejipito. Na bomoi na ye mobimba, bikolo yango ezalaki kofuta mpako epai na ye mpe ezalaki na se ya bokonzi na ye. \s1 Bilei ya Salomo \p \v 22 Tala bilei ya Salomo ya mokolo na mokolo : bakilo nkoto libwa ya semule mpe bakilo nkoto zomi na mwambe ya farine, \v 23 bangombe zomi ya mafuta, bangombe tuku mibale ya esobe, bameme mpe bantaba nkama moko, bakisa bamboloko, bambuli, bankayi mpe bandeke ya mafuta. \p \v 24 Azalaki kokonza bikolo nyonso na ngambo ya weste ya Efrate, kobanda na Tifisa kino na Gaza, elongo na bakonzi nyonso ya ngambo yango ; mpe azalaki na kimia elongo na bikolo nyonso ya zingazinga. \v 25 Na mikolo nyonso ya bomoi ya Salomo, bato ya Yuda mpe ya Isalaele, kobanda na Dani kino na Beri-Sheba, bazalaki na kimia, moto na moto azalaki kovanda na se ya banzete na ye ya vino mpe ya figi. \p \v 26 Salomo azalaki na mapango nkoto minei ya bampunda mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. \v 27 Bayangeli ya bituka bazalaki komema bilei, moto na moto na sanza na ye, mpo na mokonzi Salomo mpe mpo na bato nyonso oyo bazalaki kolia na mesa ya mokonzi ; bazalaki kosala ete eloko moko te ezanga. \v 28 Bazalaki mpe komema bambuma ya orje mpe matiti mpo na bampunda, ndenge mobateli biloko ya mokonzi azalaki kokatela bango. \s1 Bwanya ya Salomo \p \v 29 Nzambe apesaki Salomo bwanya, boyebi mingi, mpe mayele ya kososola makambo mingi, ata ezali ebele lokola zelo ya libongo ya ebale monene. \v 30 Bwanya ya Salomo ezalaki makasi koleka bwanya ya bato nyonso ya ngambo ya este mpe ya Ejipito. \v 31 Azalaki na bwanya koleka bato nyonso ; koleka ata Etani, moto ya Ezera ; Emani, Kalikoli mpe Darida, bana mibali ya Maoli. Boye, sango na ye epanzanaki kati na bikolo nyonso ya zingazinga. \v 32 Asalaki masese nkoto misato mpe banzembo nkoto moko na mitano. \v 33 Alobaki na tina na banzete, kobanda na nzete ya sedele ya Libani kino na nzete ya izope oyo ebimaka na mir ; azalaki mpe koloba na tina na banyama mpe bandeke, na tina na bikelamu oyo etambolaka na libumu mpe na tina na bambisi ya mayi. \v 34 Bakonzi ya bikolo nyonso ya mokili, oyo bazalaki koyoka sango ya bwanya ya Salomo, bazalaki kotinda bato, wuta na bikolo na bango, mpo na kokende koyoka bwanya na ye. \c 5 \s1 Boyokani elongo na mokonzi ya Tiri \r (2Ma 2.1-17) \p \v 1 Tango Irami, mokonzi ya Tiri, ayokaki sango ete bapakolaki Salomo mafuta mpo ete akoma mokonzi mpo na kokitana na Davidi, tata na ye, atindaki bantoma epai ya Salomo, pamba te azalaki tango nyonso molingami ya Davidi. \p \v 2 Salomo azongiselaki Irami maloba oyo : \pm \v 3 — Oyebi malamu ete Davidi, tata na ngai, alongaki te kotonga Ndako mpo na Yawe, Nzambe na ye, likolo ya bitumba oyo azalaki na yango na bikolo oyo ezingelaki ye, kino tango Yawe atiaki bikolo yango na se ya matambe na ye. \v 4 Kasi sik’oyo, Yawe, Nzambe na ngai, apesi ngai bopemi na bangambo nyonso, mpe ezali lisusu na monguna moko te mpe na likambo moko te oyo ekoki kobangisa ngai. \v 5 Sik’oyo, nazwi mokano ya kotonga Ndako mpo na lokumu ya Yawe, Nzambe na ngai, ndenge Yawe alobaki na Davidi, tata na ngai : « Ezali mwana na yo ya mobali oyo nakovandisa na kiti na yo ya bokonzi mpo na kokitana na yo nde akotonga Ndako mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. » \pm \v 6 Boye, pesa mitindo ete bakatela ngai banzete ya sedele ya Libani. Basali na ngai bakosunga basali na yo, mpe ngai nakofuta yo lifuti oyo okokata mpo na basali na yo, pamba te oyebi malamu ete ezali na bato te kati na biso oyo bayebi kokata banzete lokola bino, bato ya Sidoni. \p \v 7 Tango Irami ayokaki maloba ya Salomo, asepelaki na yango makasi mpe alobaki : \pm — Tika ete Yawe apambolama, Ye oyo apesaki Davidi mwana oyo atondi na bwanya mpo na kokamba ekolo monene oyo ! \p \v 8 Irami atindelaki Salomo eyano oyo : \pm — Nayambaki maloba oyo otindelaki ngai mpe nakosala nyonso oyo ozali na yango posa : banzete ya sedele mpe ya sipele. \v 9 Basali na ngai bakomema banzete yango wuta na Libani kino na ebale monene, bakokangisa yango na basinga mpo na kotinda yango na nzela ya ebale monene ; mpe nakosala ete ekoma kino na esika oyo okoyebisa ngai. Kuna nde nakofungola yango basinga ; mpe yo, okoki kozwa mpe komema yango. Kasi yo, okokokisa posa na ngai oyo : okobanda kopesa basali ya ndako na ngai bilei. \p \v 10 Irami apesaki epai ya Salomo banzete ya sedele mpe ya sipele nyonso oyo azalaki na yango na bosenga. \v 11 Salomo mpe, na ngambo na ye, azalaki kopesa mobu na mobu epai ya Irami batone nkoto motoba ya ble, balitele nkoto libwa ya mafuta ya olive ya kitoko koleka, mpo na ndako ya mokonzi. \p \v 12 Yawe apesaki Salomo bwanya kolanda elaka oyo apesaki ye. Boye, kimia ezalaki kati na Irami mpe Salomo, mpe bango mibale basalaki boyokani. \s1 Mabongisi mpo na kotonga Tempelo \p \v 13 Mokonzi Salomo azwaki kati na Isalaele mobimba bato nkoto tuku misato mpo na kosala misala makasi. \v 14 Akabolaki bango na masanga misato ya bato nkoto zomi : babandaki kosala sanza moko, na Libani, mpe basanza mibale na ndako ; lisanga moko sima na mosusu. Adonirami azalaki mokambi ya bato ya misala makasi. \v 15 Salomo azwaki lisusu na mosala bato nkoto tuku sambo mpo na komema mikumba, bato nkoto tuku mwambe mpo na kopasola mabanga kati na ngomba ; \v 16 mpe bakambi ya misala, nkoto misato na nkama misato, bazalaki kolandela misala na bokambami ya bakonzi ya misala ya Salomo. \b \p \v 17 Mokonzi apesaki mitindo ete bapasola mabanga minene mpe ya kitoko mpo na kosalela yango moboko ya Tempelo. \v 18 Basali ya Salomo mpe ya Irami, elongo na basali oyo bawutaki na engumba Biblosi, bamikotisaki na mosala ya kokata yango, kopasola mabaya mpe kobongisa mabanga mpo na kotonga Tempelo. \c 6 \s1 Salomo atongi Tempelo ya Yawe \r (2Ma 3.1-14) \p \v 1 Salomo abandaki kotonga Tempelo ya Yawe sima na mibu nkama minei na mwambe, wuta Isalaele abimaki na Ejipito, mobu oyo ekokanaki na mobu ya minei ya bokonzi na ye kati na Isalaele, na sanza ya zivi\f + \fr 6.1 \fr*\ft Sanza ya zivi ezali sanza ya mibale na manaka ya Bayuda.\ft*\f*. \p \v 2 Tempelo oyo Salomo atongaki mpo na Yawe ezalaki na bametele pene tuku misato na molayi, bametele pene zomi na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda. \v 3 Liboso ya Tempelo, na liboso ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo, ezalaki na ndako moko ya moke ya kokotela oyo ezalaki na bametele pene zomi na mokuse ; molayi na yango ezalaki ndenge moko na mokuse ya Tempelo ; mpe ekota na kati na bametele pene mitano. \p \v 4 Atiaki na bamir ya Tempelo maninisa oyo batia biyungulu. \v 5 Atongaki pembeni ya bamir ya eteni oyo eleki monene kati na Tempelo mpe pembeni ya Esika-Oyo-Eleki-Bule biteni ya mike, ngambo na ngambo, na lolenge ya etaje. \v 6 Etaje oyo ya se ya biteni yango ya mike ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na mokuse ; etaje ya kati-kati, bametele pene misato na mokuse ; mpe etaje oyo ya misato, bametele misato na basantimetele tuku mitano na mokuse. Boye bamir ya libanda ya Tempelo etikalaki lisusu minene te na likolo mpo ete motondo ebebisa bamir ya Tempelo te. \p \v 7 Mpo na kotonga Tempelo, basalelaki kaka mabanga oyo ebongisamaki malamu wuta na esika oyo bapasolaki yango ; boye, esalaki ete makelele ya marto, ya epasola to ya esalelo mosusu ya ebende etikalaki koyokana te wana bazalaki kotonga yango. \p \v 8 Ekotelo ya etaje ya se ezalaki na ngambo ya sude ya Tempelo ; bongo, bazalaki kotambola na binyatelo mpo na komata na etaje ya kati-kati mpe na etaje ya misato. \p \v 9 Tango Salomo asilisaki misala ya kotonga Tempelo, azipaki yango na plafon oyo esimbamaki na mabaya minene ya banzete ya sedele. \v 10 Atongaki ba-etaje kolanda mir ya Tempelo : etaje moko na moko ezalaki na bosanda ya bametele mibale na basantimetele tuku mitano, mpe ekanganaki na Tempelo na nzela ya mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo. \p \v 11 Yawe alobaki na Salomo : \pi1 \v 12 — Na likambo oyo etali Tempelo oyo ozali kotonga, soki olandi bikateli na Ngai, soki okokisi malako na Ngai, soki otosi mpe olandi mibeko na Ngai nyonso, nakokokisa na nzela na yo elaka oyo napesaki na Davidi, tata na yo. \v 13 Mpe nakoya kovanda kati na bato ya Isalaele mpe nakosundola te bato na Ngai, Isalaele. \p \v 14 Salomo atongaki Tempelo mpe asilisaki misala na yango ya kotonga. \v 15 Alatisaki bamir ya kati ya Tempelo na mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo, mpe atiaki mabaya ya sipele na mabele ya Tempelo. \v 16 Atongaki na mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo, etando ya bametele pene zomi kati na Tempelo ; abongisaki yango mpo ete ezala Esika-Oyo-Eleki-Bule. \p \v 17 Eteni oyo elekaki monene kati na Tempelo, liboso ete okoma na Esika-Oyo-Eleki-Bule, ezalaki na bametele pene tuku mibale. \v 18 Batobolaki bililingi na mabaya ya sedele oyo balatisaki na bamir ya kati ya Tempelo, mpo na kotia bilembo oyo ezalaki na lolenge ya bakolokente mpe ya bafololo efungwama ; balatisaki kati nyonso ya Tempelo na mabaya ya banzete ya sedele, mpe ata libanga moko te ezalaki komonana. \p \v 19 Salomo abongisaki Esika-Oyo-Eleki-Bule mpo na kotia Sanduku ya Boyokani ya Yawe. \v 20 Molayi ya Esika-Oyo-Eleki-Bule ezalaki na bametele pene zomi, mokuse na yango, bametele pene zomi ; bongo bosanda na yango, bametele pene zomi. Salomo abambaki kati na yango wolo ya peto ; abambaki lisusu wolo na etumbelo oyo basala na mabaya ya banzete ya sedele. \v 21 Salomo abambaki wolo ya peto na kati nyonso ya Tempelo ; atiaki basheni ya wolo liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule. \v 22 Boye, abambaki wolo na kati nyonso ya Tempelo mpe na etumbelo oyo ezalaki liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule. \v 23 Kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, asalaki na nzete ya olive bililingi mibale ya basheribe : sheribe moko na moko ezalaki na bametele pene mitano na molayi. \v 24 Lipapu moko ya sheribe ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; kosangisa mapapu nyonso mibale epesaki bametele mitano, kobanda na songe moko kino na songe mosusu. \p \v 25 Molayi ya sheribe ya mibale ezalaki mpe na bametele pene mitano. Bililingi ya basheribe nyonso mibale ezalaki lolenge moko mpe molayi moko. \v 26 Bosanda ya bililingi nyonso mibale ya basheribe ezalaki ndenge moko : bametele pene mitano. \v 27 Salomo atiaki bililingi ya basheribe yango na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule kati na Tempelo. Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama : lipapu moko ya sheribe ya liboso etutaki mir, mpe lipapu mosusu ya sheribe ya mibale etutaki mir mosusu ; mpe mapapu na bango mibale mosusu etutanaki na kati-kati ya Esika-Oyo-Eleki-Bule. \p \v 28 Salomo abambaki basheribe yango wolo. \v 29 Atobolaki na bamir oyo ezingelaki Tempelo, ezala na kati to na libanda, bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama. \b \p \v 30 Abambaki lisusu wolo na se ya Tempelo, ezala na kati to na libanda ya Esika-Oyo-Eleki-Bule. \p \v 31 Salomo asalaki na mabaya ya banzete ya olive, na ekotelo ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, ekuke moko ya bizipelo mibale : monene ya kadre ya mabaya ya ekuke ezwaki ndambo moko kati na bandambo mitano ya mokuse ya mir. \v 32 Atobolaki bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama na bizipelo nyonso mibale oyo basalaki na mabaya ya banzete ya olive ; abambaki wolo oyo balekisa na moto na bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama. \p \v 33 Asalaki mpe ndenge moko mpo na ekotelo ya eteni ya Tempelo, oyo eleki monene : kadre na mabaya ya banzete ya olive, bizipelo mibale na mabaya ya banzete ya sipele. Monene na yango ezwaki ndambo moko kati na bandambo minei ya mokuse ya mir. \v 34 Asalaki lisusu na mabaya ya sipele bizipelo mibale ; ezipelo ya liboso ezalaki na biteni ya mabaya mibale oyo ebalukaka, mpe ezipelo ya mibale ezalaki na barido mibale oyo ebalukaka. \v 35 Atobolaki likolo na yango bililingi ya basheribe, ya banzete ya mbila mpe ya bafololo ya kofungwama ; mpe abambaki yango wolo na kolanda bandelo ya bililingi yango. \p \v 36 Salomo azingelaki lopango ya kati na mir oyo batonga na milongo misato ya mabanga bakata mpe bamatisa moko likolo ya mosusu, mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo. \p \v 37 Moboko ya Tempelo ya Yawe etiamaki na mobu ya minei, na sanza ya Zivi. \v 38 Basilisaki kotonga Tempelo ya Yawe elongo na biteni na yango nyonso na sanza ya Buli oyo ezali sanza ya mwambe, na mobu ya zomi na moko. Salomo asalaki mibu sambo mpo na kotonga Tempelo ya Yawe. \c 7 \s1 Salomo atongi ndako ya mokonzi \p \v 1 Salomo atongaki lisusu ndako na ye ya bokonzi ; asalaki mibu zomi na misato mpo na kosilisa kotonga yango. \p \v 2 Atongaki mpe ndako oyo bazalaki kobenga « Ndako ya Zamba ya Libani. » Ezalaki na bametele pene tuku mitano na molayi, bametele pene tuku mibale na mitano na mokuse mpe bametele pene zomi na mitano na bosanda. Ezalaki na milongo minei ya makonzi ya banzete ya sedele ; mpe na likolo ya makonzi yango, ezalaki na mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo. \p \v 3 Bongo, na likolo ya mabaya ya sedele yango oyo esimbaki motondo, ezalaki na milongo misato ya mabaya mosusu ya sedele na likolo ya makonzi : molongo moko na moko ezalaki na mabaya ya sedele zomi na mitano. Na kosangisa, mabaya yango ezalaki tuku minei na mitano. \v 4 Maninisa na yango ezalaki na mipanzi nyonso ya ndako mpe ezalaki etalana yango na yango, na ba-etaje nyonso misato. \v 5 Bikuke na yango nyonso ezalaki ndenge moko na molayi mpe na mokuse, mpe ezalaki etalana na ba-etaje nyonso misato. \p \v 6 Salomo atongaki lisusu na makonzi, ndako moke ya kokotela ya bametele pene tuku mibale na mitano na molayi mpe bametele pene zomi na mitano na mokuse, mpe ezalaki na motondo likolo ya makonzi. \v 7 Atongaki lisusu ndako ya kiti ya bokonzi epai wapi azalaki kosambisa bato. Alatisaki yango mabaya ya sedele, kobanda na se kino na likolo. \p \v 8 Ndako na ye ya kovanda ezalaki kati na lopango mosusu, na sima ya ndako moke ya kokotela ; mpe batongaki yango ndenge moko kaka na ndako ya kiti ya bokonzi. Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon, mokonzi ya Ejipito, mpe atongiselaki ye ndako oyo ekokana na ndako ya kiti ya bokonzi. \p \v 9 Batongaki bandako oyo nyonso na mabanga bakata kitoko mpe babongisa na si na bangambo nyonso mibale. Basalelaki yango kobanda na miboko kino na mitondo, mpe na libanda, mpo na bamir ya lopango ya monene. \v 10 Basalelaki mabanga minene ya talo mpo na kotonga miboko oyo ezalaki na molayi ya bametele pene minei to mitano. \v 11 Na likolo ya miboko yango, batiaki mabanga oyo bakata mpe mabaya minene ya sedele mpo na kosimba motondo. \p \v 12 Salomo azingelaki lopango monene na mir ya milongo misato ya mabanga bakata mpe na molongo moko ya mabaya minene ya sedele, ndenge ezalaki mpo na lopango ya kati ya Tempelo ya Yawe mpe mpo na ndako moke ya kokotela. \s1 Bisalelo ya bronze kati na Tempelo \s2 Makonzi ya bronze \r (2Ma 2.10-13) \p \v 13 Mokonzi Salomo atindaki bato na mboka Tiri kobenga mosali moko na kombo Irami \v 14 oyo tata na ye azalaki moto ya Tiri ; mpe mama na ye, moto ya libota ya Nefitali, azalaki mwasi akufisa mobali. Irami ayebaki kosalela bronze. Bongo lokola azalaki na bwanya, mayele mpe boyebi mingi, azalaki kosala lolenge nyonso ya biloko ya bronze. Boye, ayaki epai ya mokonzi Salomo mpe asalelaki ye misala nyonso oyo asengaki ye. \r (2Ma 3.15-17) \p \v 15 Irami asalaki makonzi nyonso mibale ya bronze : likonzi moko na moko ezalaki na bametele pene libwa na molayi, mpe bametele pene motoba na monene. \v 16 Asalaki lisusu na bronze banyangwisa na moto mito ya makonzi mpo na kotia yango na songe : moto moko na moko ya likonzi ezalaki na bametele mibale na basantimetele tuku mitano na bosanda. \v 17 Batiaki na mito ya makonzi yango bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama mpe ya basinga elingama-lingama lokola basheni. Na moto ya likonzi moko na moko, ezalaki na bililingi sambo. \v 18 Irami atiaki milongo mibale ya bililingi ya bambuma ya grenade zingazinga ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kokomisa mito ya makonzi yango kitoko. \v 19 Mito ya makonzi ya ndako moke ya kokotela ezalaki ya bametele pene mibale na bosanda, mpe batiaki na likolo na yango bililingi ya fololo ya lisi. \v 20 Bazingelaki moto ya likonzi moko na moko na bililingi ya bambuma ya grenade nkama mibale oyo ezalaki likolo ya bililingi ya basinga oyo basala lokola ya monyama. \v 21 Irami atongaki makonzi nyonso mibale liboso ya ndako moke ya kokotela na Tempelo ; abengaki likonzi oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mobali Yakini, mpe oyo ezalaki na ngambo ya loboko ya mwasi, Boazi. \v 22 Likolo ya likonzi moko na moko, atiaki bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki ndenge wana nde asilisaki mosala ya kotelemisa makonzi. \s1 Nzungu ya monene ya bronze \r (2Ma 4.2-5) \p \v 23 Irami asalaki nzungu ya monene ya bronze oyo ezalaki na lolenge ya libungutulu : monene na yango ezalaki na bametele pene mitano, mpe bosanda na yango, bametele mibale na basantimetele tuku mitano ; mpe zingazinga na yango, bametele pene zomi na mitano. \v 24 Na se ya monoko ya nzungu yango ya monene, na pembeni na yango nyonso, ezalaki na milongo mibale ya bililingi ya bakolokente oyo banyangwisaki mpe babambaki na nzungu ya monene mpo ete esala eloko kaka moko ; ezalaki bililingi zomi mpo na molayi ya kati-kati ya metele moko. \v 25 Nzungu yango evandisamaki na likolo ya bikeko ya bangombe zomi na mibale : misato etalaki na ngambo ya nor ; misato, na ngambo ya weste ; misato, na ngambo ya sude, mpe misato, na ngambo ya este. Bongo sima na bangombe yango nyonso etalaki na ngambo ya kati. \v 26 Mbinga ya nzungu yango ezalaki na basantimetele pene mwambe. Babongisaki pembeni ya monoko na yango lokola pembeni ya kopo oyo batia bililingi ya fololo ya lisi. Ezalaki kotonda na balitele ya mayi pene nkoto tuku minei. \s1 Bashario ya bronze \p \v 27 Irami asalaki lisusu bivandelo zomi ya bronze : evandelo moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na molayi, bametele pene mibale na mokuse, metele moko na basantimetele tuku mitano na bosanda. \v 28 Tala ndenge basalaki bivandelo yango : bakangisaki bitando ya bronze mpe balekisaki bibende mosusu ya bronze mpo na kosimba yango. \v 29 Irami asalaki bililingi ya nkosi, ya bangombe mpe ya basheribe, mpe abambaki yango likolo ya bitando mpe likolo ya bibende mosusu ya bronze. Ezalaki na bililingi ya singa ya bafololo na se mpe na likolo ya bangombe mpe ya bankosi. \v 30 Shario moko na moko ezalaki na bapine minei ya bronze mpe na bibende ya bronze mpo na kosimba bapine. \v 31 Na likolo ya evandelo moko na moko, ezalaki na lidusu evimba, na lolenge ya libungutulu ; bongo eteni na yango oyo ezalaki ya kovimba ezalaki na basantimetele pene tuku mitano na bosanda mpe basantimetele pene tuku sambo na mitano na monene ; mpe nzungu ya monene evandaki na lidusu yango. Irami abambaki bililingi na lidusu yango. Molayi mpe mokuse ya evandelo yango ezalaki ndenge moko, ezalaki na lolenge ya libungutulu te. \v 32 Bapine nyonso minei ezalaki na se ya evandelo, mpe bakangisaki bibende oyo esimbaki bapine yango na mipanzi. Pine moko na moko ezalaki na basantimetele pene tuku sambo na mitano na monene. \v 33 Basalaki bapine yango lokola bapine ya shareti : bibende oyo esimbaki bapine, bajante, mabende ya mike oyo ezalaka na kati ya pine mpe oyo esungaka pine mpo na kobaluka, nyonso ezalaki ya bronze banyangwisa na moto. \v 34 Mabende nyonso minei oyo ezalaki lokola makolo ezalaki na basonge nyonso minei mpe ekanganaki na evandelo. \v 35 Na likolo ya evandelo moko na moko, ezalaki na elilingi ya motole ya basantimetele pene tuku mibale na mitano na monene ; mpe elilingi yango ezalaki zingazinga ya lidusu, na eteni oyo ezalaki ya kovimba. Na likolo ya evandelo, bibende oyo balekisaki na bangambo ekanganaki na evandelo mpo na kolendisa evandelo yango. \v 36 Na likolo ya bibende yango, babambaki bililingi ya basheribe, ya bankosi mpe ya mandalala ; mpe bazingelaki yango na bililingi ya basinga elingama-lingama lokola basheni. \v 37 Asalaki ndenge moko mpo na bivandelo nyonso zomi : asalaki nyonso na bronze banyangwisa na moto, mpe ezalaki lolenge moko. \p \v 38 Irami asalaki lisusu basani zomi ya minene ya bronze ; moko na moko ezalaki na bametele pene mibale na monene mpe ezalaki likolo ya evandelo moko kati na bivandelo zomi. Mpe bakokaki kotia balitele pene nkoto moko kati sani moko na moko. \v 39 Atiaki bivandelo mitano elongo na basani na yango na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, mpe mitano mosusu na ngambo ya loboko ya mwasi. Nzungu ya monene ya bronze etiamaki na ngambo ya loboko ya mobali ya Tempelo, pene na songe ya sude-este. \r (2Ma 4.11) \p \v 40 Irami asalaki basani ya kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. \r (2Ma 4.7–5.1) \p Irami asilisaki mosala nyonso oyo mokonzi Salomo atindaki ye kosala mpo na Tempelo ya Yawe : \v 41 makonzi mibale, mito mibale ya libungutulu na suka ya makonzi nyonso mibale, bililingi mibale ya basinga oyo basala lokola monyama mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi yango, \v 42 bililingi ya bambuma nkama minei ya grenade ekangana na maboke ya bililingi ya basinga oyo basala lokola monyama : milongo mibale ya bililingi ya grenade mpo na elilingi moko na moko ya basinga oyo basala lokola monyama, mpo na kozipa mito nyonso mibale ya makonzi ; \v 43 bivandelo zomi mpe basani zomi ya minene oyo batiaki na likolo ya bivandelo, \v 44 nzungu ya monene ya libungutulu, bikeko ya bangombe zomi na mibale oyo ezalaki komema nzungu ya monene, \v 45 basani mpo na kotia putulu, bapawu mpe bakopo mpo na kosopela makila. Irami asalelaki mokonzi Salomo biloko oyo nyonso mpo na Tempelo ya Yawe ; asalaki yango na bronze oyo bapetola na moto. \v 46 Mokonzi asengaki ete banyangwisa yango kati na mabele, na etando ya Yordani, kati na Sukoti mpe Tsaritani. \v 47 Bongo Salomo atiaki biloko oyo nyonso kati na Tempelo ya Yawe ; kasi mpo ete elekaki ebele, bakokaki te koyeba kilo ya bronze oyo basalelaki. \s1 Biloko ya wolo \r (2Ma 4.19-22) \p \v 48 Salomo asalaki lisusu na wolo biloko nyonso oyo ezalaki kati na Tempelo ya Yawe : etumbelo ; mesa oyo, na likolo na yango, bazalaki kotia mapa liboso ya Yawe ; \v 49 bitelemiselo ya minda elongo na minda na yango, oyo basala na wolo ya peto, mitano na ngambo ya loboko ya mobali, mpe mitano na ngambo ya loboko ya mwasi, liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, bafololo na yango mpe biloko ya wolo ya kozwela makala na moto, \v 50 basani ya minene, bambeli, bakopo mpo na kosopela makila, bakeni, bambabola ya wolo ya peto, elongo na bikangelo ya wolo mpo na bikuke ya kati ya Tempelo, Esika-Oyo-Eleki-Bule, mpe mpo na bikuke ya esika oyo bato nyonso bavandaka, na ekotelo ya Tempelo. \p \v 51 Tango Salomo asilisaki misala nyonso ya kotonga Tempelo ya Yawe, amemaki biloko oyo Davidi, tata na ye, abulisaki : palata, wolo mpe bisalelo ; atiaki yango kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe. \c 8 \s1 Libulisi ya Tempelo \r (2Ma 5.2–6.11) \p \v 1 Salomo abengisaki, na Yelusalemi, bakambi nyonso ya mabota ya Isalaele, bakambi nyonso ya bituka mpe ya mabota ya bato ya Isalaele mpo na komema Sanduku ya Boyokani ya Yawe wuta na Siona, engumba ya Davidi. \v 2 Bato nyonso ya Isalaele basanganaki pene ya mokonzi Salomo, na feti monene, na sanza ya Etanimi oyo ezali sanza ya sambo. \p \v 3 Tango bakambi nyonso ya Isalaele bakomaki, Banganga-Nzambe batombolaki Sanduku. \v 4 Banganga-Nzambe mpe Balevi bamemaki Sanduku ya Yawe, Ndako ya kapo ya Bokutani mpe bisalelo nyonso ya bule oyo ezalaki kati na yango. \v 5 Mokonzi Salomo mpe lisanga mobimba ya Isalaele oyo esanganaki epai na ye liboso ya Sanduku babonzaki lokola mbeka bameme mpe bangombe oyo balongaki kotanga te mpo na koyeba motango na yango, pamba te ezalaki ebele penza. \p \v 6 Banganga-Nzambe batiaki Sanduku ya Boyokani ya Yawe na esika na yango, kati na Tempelo, kati na Esika-Oyo-Eleki-Bule, na se ya mapapu ya basheribe. \v 7 Mapapu ya basheribe ezalaki ya kofungwama na likolo ya esika oyo Sanduku ezalaki, bongo ezipaki Sanduku mpe banzete ya komemela yango. \v 8 Mpo ete banzete yango elekaki milayi, basonge na yango ezalaki komonana wuta na Esika ya bule oyo ezali liboso ya Esika-Oyo-Eleki-Bule, kasi ezalaki komonana te wuta na libanda. Etikala wana kino na mokolo ya lelo. \v 9 Kati na Sanduku, ezalaki na eloko mosusu te longola kaka bitando mibale ya mabanga oyo Moyize atiaki na Orebi epai wapi Yawe asalaki boyokani elongo na bana ya Isalaele tango babimaki na Ejipito. \p \v 10 Na tango Banganga-Nzambe babimaki na Esika-Oyo-Eleki-Bule, lipata ezipaki Tempelo ya Yawe ; \v 11 mpe Banganga-Nzambe bakokaki lisusu te kotelema kati na yango mpo na kosala mosala na bango mpo na lipata, pamba te nkembo na Yawe etondisaki Tempelo na Ye. \s1 Libondeli mpo na kobulisa Tempelo \p \v 12 Bongo, Salomo alobaki : \pi1 — Yawe alobaki ete akovanda kati na esika ya molili ! \v 13 Mpe ngai natongeli Yo ndako ya lokumu, esika oyo okovanda mpo na libela. \p \v 14 Mokonzi abalukaki mpe apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele. Lisanga mobimba ya Isalaele ezalaki ya kotelema. \v 15 Alobaki : \pm — Tika ete Yawe, Nzambe ya Isalaele, akumisama ; Ye oyo, na monoko na Ye moko, alobaki na Davidi, tata na ngai, mpe akokisi, na loboko na Ye moko, makambo oyo alakaki : \v 16 « Wuta mokolo oyo nabimisaki bato na Ngai, Isalaele, na Ejipito, naponaki engumba moko te kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo ete batonga kuna Tempelo epai wapi Kombo na Ngai ekozala ; kasi naponaki Davidi mpo ete akamba bato na Ngai, Isalaele ! » \pm \v 17 Tata na ngai, Davidi, azalaki na makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. \v 18 Kasi Yawe alobaki na Davidi, tata na ngai : « Osali malamu lokola ozwi makanisi ya kotonga Tempelo mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. \v 19 Kasi ezali yo te moto okotonga Tempelo yango ; ezali nde mwana na yo ya mobali, oyo akobima na mokongo na yo moko, moto akotonga Tempelo yango mpo na lokumu ya Kombo na Ngai. » \pm \v 20 Yawe akokisi elaka na Ye. Nakitani na Davidi, tata na ngai, navandi na kiti ya bokonzi ya Isalaele, ndenge kaka Yawe alobaki, mpe natongi Tempelo mpo na lokumu ya Kombo ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. \v 21 Nabongisi kuna esika mpo na Sanduku ya Boyokani ya Yawe, boyokani oyo asalaki elongo na batata na biso tango abimisaki bango na mokili ya Ejipito. \s1 Libondeli ya Salomo \r (2Ma 6.12-40) \p \v 22 Salomo atelemaki liboso ya etumbelo ya Yawe ; mpe na miso ya lisanga mobimba ya Isalaele, atombolaki maboko likolo \v 23 mpe asambelaki : \pm « Yawe, Nzambe ya Isalaele, ezali na nzambe moko te oyo akokani na Yo, ezala kuna na likolo to awa na se ! Obatelaka boyokani mpe bolingo na Yo mpo na basali na Yo, oyo batambolaka kolanda mokano na Yo na motema na bango mobimba. \v 24 Solo, okokisi bilaka oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo ; makambo oyo olobaki na monoko na Yo, okokisi yango na nguya ya loboko na Yo, ndenge ezali komonana na mokolo ya lelo. \pm \v 25 Sik’oyo, oh Yawe, Nzambe ya Isalaele, kokisa mpe elaka mosusu oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, tango olobaki na ye : ‹ Okozangaka te moto oyo akovanda na kiti ya bokonzi ya Isalaele, na miso na Ngai, soki bana na yo bakotambola malamu liboso na Ngai mpe bakotosa mibeko na Ngai, ndenge yo otamboli kolanda mokano na Ngai. › \v 26 Sik’oyo, oh Nzambe ya Isalaele, nabondeli Yo, tika ete elaka yango oyo opesaki na Davidi, tata na ngai mpe mosali na Yo, ekokisama ! \pm \v 27 Kasi, boni, Nzambe akoki solo kovanda na mokili ? Soki kutu Likolo mpe Likolo oyo eleki likolo ekoki kokoka Yo te, bongo ekozala boni mpo na Tempelo oyo natongi ! \v 28 Yawe, Nzambe na ngai, yoka na bokebi losambo mpe libondeli na ngai, mowumbu na Yo ! Yoka koganga mpe libondeli oyo mowumbu na Yo azali kotombola epai na Yo na mokolo ya lelo. \v 29 Tika ete, moyi mpe butu, miso na Yo ezala ya kofungwama mpo na kotala Tempelo oyo, esika oyo olobaki na tina na yango : ‹ Kombo na Ngai ekozala awa. › Yoka losambo oyo mowumbu na Yo azali kotombola na esika oyo. \v 30 Okoyoka libondeli oyo mowumbu na Yo mpe bato na Yo, Isalaele, bakotombola epai na Yo na kotala na ngambo ya esika oyo ! Tika ete oyoka biso wuta na Likolo, evandelo na Yo ; yoka mpe limbisa ! \pm \v 31 Soki moto asali lisumu epai ya mozalani na ye, mpe batindi ye na makasi ete alapa ndayi esangana na bilakeli mabe, liboso ya etumbelo na Yo kati na Tempelo oyo, \v 32 yoka wuta na Likolo ; sala mpe kata makambo kati na bawumbu na Yo mpo na kokweyisa moto oyo asali mabe mpe komemisa ye ngambo ya mabe na ye, kolanda etamboli na ye, mpe mpo na kolongisa moto ya sembo mpe kosalela ye kolanda bosembo na ye. \pm \v 33 Tango banguna bakolonga bato na Yo, Isalaele, mpo ete basali lisumu liboso na Yo, soki babongoli mitema mpo na kozongela Yo, basanzoli Kombo na Yo, basambeli mpe babondeli Yo, kati na Tempelo oyo, \v 34 yoka wuta na Likolo, limbisa masumu ya Isalaele, bato na Yo, mpe zongisa bango na mabele oyo opesaki batata na bango. \pm \v 35 Tango likolo ekokangama mpe mvula ekozala lisusu te mpo ete basali masumu liboso na Yo, soki basambeli na kotala na ngambo ya esika oyo, basanzoli Kombo na Yo mpe batiki masumu na bango, pamba te osili koyokisa bango soni, \v 36 yoka bango wuta na likolo, limbisa masumu ya bawumbu na Yo mpe ya Isalaele, bato na Yo, —tango osili kolakisa bango nzela malamu oyo basengeli kolanda— mpe tinda mvula na mokili na Yo, mokili oyo opesaki lokola libula epai ya bato na Yo. \pm \v 37 Tango nzala makasi to bokono makasi to moto to bokawuki to kopola ya bambuma to mabanki to mankoko ekokota kati na mokili, tango banguna bakozingela bato na Yo kati na mokili na bango, na bikuke ya bingumba na bango ; tango pasi to bokono ya lolenge nyonso ekokweyela bango, \v 38 soki, wana bato na Yo, Isalaele, bayoki mawa makasi kati na mitema na bango mpo na pasi to bokono yango, moko na moko atomboli maboko na ye na ngambo ya Tempelo oyo, asambeli to abondeli Yo, \v 39 yoka ye wuta na Likolo, evandelo na Yo, limbisa, sala mpe zongisela moto na moto kolanda etamboli na ye, mpo ete oyebi motema ya moto moko na moko. Solo, Yo kaka nde oyebi mitema ya bato. \v 40 Sala bongo mpo ete bana ya Isalaele batosa Yo mikolo nyonso oyo bakovanda na mabele oyo opesaki epai na batata na biso. \pm \v 41 Ndenge moko mpe mpo na mopaya oyo azali te na molongo ya Isalaele, bato na Yo : wana akowuta na mokili ya mosika, mpo na Kombo na Yo, \v 42 pamba te bakoyoka sango ya Kombo monene na Yo, ya loboko na Yo ya nguya mpe esembolama ; soki ayei mpe asambeli na kotala na ngambo ya Tempelo oyo, \v 43 yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo, mpe salela ye nyonso oyo akosenga Yo, mpo ete bikolo nyonso ya mokili bayeba Kombo na Yo, batosa Yo lokola Isalaele, bato na Yo, mpe bayeba ete Tempelo oyo natongi ebulisami nde mpo na Kombo na Yo. \pm \v 44 Tango bato na Yo bakokende kobundisa banguna na bango na nzela oyo okolakisa bango, soki basambeli Yawe na kotala na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na Kombo na Yo, \v 45 yoka wuta na Likolo losambo mpe libondeli na bango, mpe longisa bango. \pm \v 46 Tango bana ya Isalaele bakosala masumu liboso na Yo, pamba te moto nyonso asalaka masumu, bongo Yo osilikeli bango mpe okabi bango na maboko ya banguna oyo bamemi bango na bowumbu, na mokili ya banguna, ezala ya mosika to ya pene, \v 47 mpe soki, wuta na mokili ya bowumbu, basosoli, babongoli mitema, babondeli Yo kati na mokili ya bato oyo bamemaki bango na bowumbu mpe balobi : ‹ Tosalaki masumu, tosalaki bambeba, tosalaki makambo mabe ; › \v 48 soki, wuta na mokili ya banguna na bango epai wapi bamemaki bango lokola bawumbu, basengi Yo bolimbisi na mitema mpe na milimo na bango mobimba ; soki basambeli Yo na kotala na ngambo ya mokili na bango, oyo opesaki epai na batata na bango, na ngambo ya engumba oyo oponaki mpe na ngambo ya Tempelo oyo natongi mpo na lokumu ya Kombo na Yo ; \v 49 yoka wuta na Likolo, evandelo na Yo ; yoka losambo mpe mabondeli na bango, longisa bosembo na bango, \v 50 limbisa bato na Yo na masumu mpe mabe nyonso oyo basalaki liboso na Yo mpe sala ete banguna na bango bayokela bango mawa. \v 51 Pamba te bazali bato na Yo mpe libula na Yo, oyo obimisaki na bowumbu wuta na Ejipito, wuta kati na libulu ya moto makasi oyo banyangwiselaka bibende. \pm \v 52 Tika ete miso na Yo efungwama wana mowumbu na Yo mpe Isalaele, bato na Yo, bakobondela Yo ; yoka bango tango nyonso oyo bakotombola mingongo epai na Yo. \v 53 Pamba te, Nkolo Yawe, Yo moko nde oponaki bango kati na mabota nyonso ya mokili mpe otiaki bango pembeni, mpo ete bazala libula na Yo ndenge olobaki na mowumbu na Yo, Moyize, tango obimisaki batata na biso na Ejipito. » \p \v 54 Tango Salomo asilisaki kosambela mpe kobondela Yawe, atelemaki liboso ya etumbelo ya Yawe epai wapi afukamaki mpe atombolaki maboko na ye na likolo. \v 55 Wana atelemaki, apambolaki lisanga mobimba ya Isalaele na mongongo makasi mpe alobaki : \pm \v 56 « Tika ete Yawe akumisama, Ye oyo apesi kimia na Isalaele, bato na Ye, ndenge alobaki. Kati na maloba na Ye ya kitoko, oyo alobaki na nzela ya Moyize, mowumbu na Ye, moko te ezangi kokokisama. \v 57 Tika ete Yawe, Nzambe na biso, azala elongo na biso ndenge azalaki elongo na batata na biso ; atika biso te mpe abwaka biso te ; \v 58 kasi abongola mitema na biso epai na Ye mpo ete tokoka kotambola na nzela na Ye, kobatela mibeko na Ye, malako na Ye mpe mitindo na Ye oyo apesaki na batata na biso. \v 59 Tika ete mabondeli na ngai oyo nawuti kotombola epai na Yawe, Nzambe na biso, ezala liboso na Ye butu mpe moyi ; mpe tika ete alongisa mowumbu na Ye mpe Isalaele, bato na Ye, ndenge bosenga na bango ya mokolo na mokolo ezali ; \v 60 mpo ete bato nyonso kati na mokili bayeba solo ete Yawe azali Nzambe, mosusu lokola Ye azali te. \v 61 Tika ete mitema na bino ezala sembo epai na Yawe, Nzambe na biso, mpo ete botambola kolanda mibeko na Ye mpe bobatela malako na Ye ndenge bosali yango na mokolo ya lelo. » \r (2Ma 7.4-10) \p \v 62 Mokonzi mpe bana nyonso ya Isalaele babonzaki bambeka liboso ya Yawe. \v 63 Salomo abonzaki lokola mbeka ya boyokani bangombe nkoto tuku mibale na mibale mpe bampate nkoto nkama moko na tuku mibale. Ezalaki ndenge wana nde mokonzi mpe bato nyonso ya Isalaele babulisaki Tempelo ya Yawe. \v 64 Na mokolo yango, mokonzi abulisaki lopango ya kati oyo ezalaki liboso ya Tempelo ya Yawe mpe abonzaki wana mbeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani ; pamba te etumbelo ya bronze oyo ezalaki liboso ya Yawe elekaki moke mpo na koyamba bambeka ya kotumba, makabo ya gato mpe mafuta ya bambeka ya boyokani. \p \v 65 Na tango wana, Salomo elongo na Isalaele mobimba basalaki feti monene ; mpe lisanga monene ya bato oyo bawutaki na Lebo-Amati kino na moluka ya Ejipito batelemaki liboso ya Yawe, Nzambe na biso, mikolo sambo mpe mikolo sambo mosusu, elingi koloba mikolo zomi na minei. \v 66 Na mokolo ya mwambe, Salomo azongisaki bato. Bongo bato bapambolaki ye mpe bazongaki na bandako na bango ya kapo na esengo mpe na nsayi na mitema mpo na bolamu nyonso oyo Yawe asalelaki Davidi, mowumbu na Ye, mpe Isalaele, bato na Ye. \c 9 \s1 Yawe amimonisi epai ya Salomo \r (2Ma 7.11-12) \p \v 1 Sima na Salomo kosilisa kotonga Tempelo ya Yawe, ndako ya mokonzi mpe kosala nyonso oyo azalaki na yango posa, \v 2 Yawe abimelaki Salomo na mbala ya mibale, ndenge kaka abimelaki ye na mbala ya liboso, na Gabaoni. \v 3 Yawe alobaki na ye : \pm « Nayoki losambo mpe libondeli na yo, oyo osali liboso na Ngai ; nabulisi Tempelo oyo otongi mpo ete natia Kombo na Ngai kati na yango mpo na libela. Miso mpe motema na Ngai ekobanda kozala kuna tango nyonso. \pm \v 4 Mpo na yo, soki okotambola liboso na Ngai ndenge Davidi, tata na yo, atambolaki na motema malamu mpe na motema ya sembo ; soki okosala nyonso oyo natindaki yo mpe okobatela mibeko mpe malako na Ngai, \v 5 nakolendisa mpo na libela kiti na yo ya bokonzi kati na Isalaele, ndenge nalobaki yango epai ya Davidi, tata na yo : ‹ Okotikalaka kozanga te moto oyo akokitana na kiti ya bokonzi ya Isalaele. › \pm \v 6 Kasi soki yo mpe bana na yo ya mibali bopengwi mosika na Ngai ; soki botosi te mibeko mpe malako na Ngai, oyo natie liboso na bino ; soki bokeyi kosalela banzambe mosusu mpe kofukamela yango, \v 7 nakolongola Isalaele kati na mabele oyo napesaki ye, nakobwaka mosika ya elongi na Ngai Tempelo oyo nabulisi mpo na Kombo na Ngai, mpe Isalaele akokoma eloko ya kotiola mpe ya soni kati na bikolo nyonso. \v 8 Atako Tempelo oyo ezali sik’oyo kitoko penza, kasi bato nyonso oyo bakoleka pembeni na yango bakokamwa mpe bakoloba : ‹ Mpo na nini Yawe asali makambo ya boye na mokili oyo mpe na Tempelo oyo ? › \v 9 Bakoyanola : ‹ Ezali mpo ete basundolaki Yawe, Nzambe ya batata na bango, oyo abimisaki bango na Ejipito mpe bamipesaki na banzambe mosusu, bafukamelaki mpe basalelaki yango ; yango wana Yawe ayeisi likolo na bango pasi oyo nyonso. › » \s1 Misala mosusu ya Salomo \r (2Ma 8.1-18) \p \v 10 Sima na mibu tuku mibale oyo Salomo asalaki mpo na kotonga Tempelo ya Yawe mpe ndako na ye moko, \v 11 akabelaki Irami, mokonzi ya Tiri, bingumba tuku mibale kati na Galile, pamba te Irami asungaki Salomo na nyonso oyo azalaki na yango na bosenga : mabaya ya sedele, ya sipele mpe wolo. \v 12 Irami abimaki wuta na Tiri, mokili na ye, mpo na kotala bingumba oyo Salomo akabelaki ye, kasi asepelaki na yango te. \v 13 Alobaki : « Ndeko na ngai, bingumba nini oyo opesi ngai ? » \p Yango wana abengaki bingumba yango mokili ya Kabuli\f + \fr 9.13 \fr*\ft Mokili ya Kabuli elingi koloba : mokili ezanga tina.\ft*\f*, kombo oyo etikala kino lelo. \v 14 Nzokande, Irami apesaki Salomo bakilo nkoto misato na nkama mitano ya wolo. \p \v 15 Salomo asalisaki bana ya Isalaele misala makasi mpo na kotonga Tempelo ya Yawe, ndako na ye moko, Milo, mir ya Yelusalemi, Atsori, Megido mpe Gezeri. \p \v 16 Faraon, mokonzi ya Ejipito, amataki na Gezeri, abotolaki yango na maboko ya bato ya Kanana oyo bazalaki kovanda kuna, abomaki bango, atumbaki engumba yango na moto mpe akabaki yango epai ya mwana na ye ya mwasi oyo akomaki mwasi ya Salomo. \v 17 Yango wana Salomo atongaki lisusu Beti-Oroni ya likolo mpe Beti-Oroni ya se, \v 18 Baalati mpe Tamari kati na esobe ya mokili, \v 19 bingumba nyonso epai wapi azalaki kobomba biloko na ye, bingumba epai wapi azalaki kobomba bashar mpe bampunda na ye. Salomo atongaki lisusu nyonso oyo azalaki na yango posa kati na Yelusalemi, kati na Libani mpe kati na mokili nyonso oyo azalaki kokamba. \v 20 Batikali nyonso kati na bato ya Amori, ya Iti, ya Perizi, ya Evi mpe ya Yebusi, ba-oyo bazalaki bana ya Isalaele te, \v 21 ba-oyo bana na bango batikalaki kati na mokili oyo bana ya Isalaele babebisaki, Salomo azwaki bango mpo na misala makasi ya bawumbu, kino na mokolo ya lelo. \v 22 Kasi Salomo akomisaki te bana ya Isalaele bawumbu mpo na kosala misala makasi na ye, pamba te bazalaki bato ya bitumba, bakalaka na ye ya lokumu, bakalaka na ye, bakonzi ya basoda na ye, bakonzi ya bashar na ye mpe ya basoda na ye, oyo batambolisaka bashar. \v 23 Tala motango ya bakalaka ya lokumu oyo batindamaki mpo na kokamba bato oyo bazalaki kosala misala ya Salomo : bakalaka nkama mitano na tuku mitano. \p \v 24 Sima na mwana mwasi ya Faraon kolongwa na engumba ya Davidi mpo na kokende na ndako oyo Salomo atongelaki ye, Salomo atongaki Milo. \p \v 25 Mbala misato kati na mobu, Salomo azalaki kobonza bambeka ya kotumba mpe bambeka ya boyokani na likolo ya etumbelo oyo atongaki mpo na Yawe ; azalaki mpe kotumba malasi ya ansa na likolo ya etumbelo oyo ezalaki liboso ya Yawe. Ezalaki bongo nde misala ezalaki kokokisama kati na Tempelo ya Yawe. \p \v 26 Mokonzi Salomo asalisaki masuwa ebele na engumba Etsioni-Geberi oyo ezali pene ya Eyiloti, pembeni ya ebale monene ya Barozo, kati na mokili ya Edomi. \v 27 Irami atindaki na masuwa yango basali na ye, bato oyo bayebaki kotambolisa malamu masuwa kati na ebale monene ; bazalaki elongo na basali ya Salomo. \v 28 Bakendeki na Ofiri epai wapi bazwaki bakilo nkoto zomi na mibale ya wolo oyo bamemaki epai ya mokonzi Salomo. \c 10 \s1 Mwasi mokonzi ya Saba mpe Salomo \r (2Ma 9.1-12) \p \v 1 Tango mwasi mokonzi ya Saba ayokaki sango ya lokumu oyo Kombo ya Yawe epesaki Salomo, ayaki mpo na komeka ye na nzela ya mituna ya makasi ; \v 2 ayaki na Yelusalemi elongo na bato ebele mpe bashamo oyo ememaki biloko ya mike-mike oyo epesaka solo kitoko, wolo ebele mpe mabanga ya talo. Tango akomaki epai ya Salomo, ayebisaki ye nyonso oyo azalaki na yango kati na motema. \v 3 Salomo apesaki ye biyano na mituna na ye nyonso, ezalaki ata na motuna moko te oyo mokonzi alongaki te kopesa eyano. \p \v 4 Tango mwasi mokonzi ya Saba amonaki bwanya nyonso ya Salomo, ndako oyo atongaki, \v 5 bilei oyo azalaki kolia na mesa na ye, ndako ya basali na ye, esaleli mpe elateli ya basali na ye, basali oyo bapesaka ye masanga mpe bambeka ya kotumba oyo azalaki kobonza kati na Tempelo ya Yawe, mwasi mokonzi ya Saba akamwaki makasi \v 6 mpe alobaki na mokonzi : « Makambo oyo nayokaki wuta na mokili na ngai na tina na misala na yo mpe na bwanya na yo ezali ya solo. \v 7 Nandimaki te makambo oyo bazalaki koloba na tina na yango kino tango ngai moko nayei mpe namoni yango na miso na ngai moko. Nzokande, kolanda oyo ngai namoni, makambo oyo bayebisaki ngai te na tina na bwanya yango ezali penza kati-kati ! Solo, bwanya mpe bozwi na yo eleki sango ya lokumu oyo nayokaki na tina na yo. \v 8 Esengo na bato na yo, esengo na basali na yo, ba-oyo batelemaka tango nyonso liboso na yo mpe bayokaka maloba na yo, oyo etonda na bwanya ! \v 9 Tika ete Yawe, Nzambe na yo, apambolama ; Ye oyo asepelaki na yo mpe atiaki yo na kiti ya bokonzi ya Isalaele ! Ezali mpo ete Nzambe na yo alingaka Isalaele mpo na libela nde atiaki yo lokola mokonzi mpo ete osala na bosolo mpe na bosembo. » \p \v 10 Mwasi mokonzi ya Saba apesaki mokonzi Salomo bakilo nkoto misato na nkama mitano ya wolo, biloko ebele penza ya solo kitoko mpe mabanga ya talo. Batikala lisusu te komema biloko ebele ya solo kitoko lokola oyo mwasi mokonzi ya Saba amemelaki mokonzi Salomo. \p \v 11 Masuwa ya Irami oyo ememaki wolo wuta na Ofiri ememaki mpe mabaya ebele ya santale mpe mabanga ya talo. \v 12 Mokonzi asalaki na mabaya wana ya santale makonzi ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi ; asalaki na yango mpe mandanda mpe makembe. Mabaya ya santale etikala lisusu koya te, mpe batikala lisusu komona yango te kino na mokolo ya lelo. \v 13 Na ngambo na ye, mokonzi Salomo mpe apesaki na mwasi mokonzi ya Saba biloko nyonso oyo azalaki na yango posa mpe oyo asengaki ; apesaki ye lisusu bakado oyo kaka mokonzi lokola Salomo akokaki kopesa. Sima na yango, mwasi mokonzi ya Saba azongaki elongo na basali na ye, na mokili na ye. \s1 Bomengo ya Salomo \r (2Ma 1.14-17; 9.13-28) \p \v 14 Mobu na mobu, Salomo azalaki kozwa bakilo ya wolo nkoto tuku mibale, \v 15 mbongo ya mpako ya bato ya mombongo oyo bazalaki koteka biloko oyo bazalaki kosomba na bamboka ya bapaya, mbongo ya mpako ya bateki biloko ya ndenge na ndenge, mbongo ya mpako oyo bakonzi nyonso ya Arabi bazalaki kofuta, mpe oyo bayangeli ya bituka bazalaki kokongola kati na mokili ya Isalaele. \p \v 16 Mokonzi Salomo asalisaki na wolo batuta banguba minene nkama mibale : nguba moko na moko esengaki bakilo motoba ya wolo. \v 17 Asalisaki lisusu na wolo batuta banguba mike nkama misato : nguba moko na moko ya moke esengaki kilo moko na bagrame nkama mitano ya wolo. Mokonzi atiaki yango kati na ndako na ye, oyo bazalaki kobenga « ndako ya zamba ya Libani. » \v 18 Mokonzi asalaki na pembe ya nzoko kiti moko monene ya bokonzi mpe abambaki yango wolo ya peto. \v 19 Kiti yango ya bokonzi ezalaki na ematelo ya binyatelo motoba mpe songe ya mokongo na yango ezalaki lokola libungutulu. Na bangambo nyonso mibale, ezalaki na bisika ya kotia maboko mpe bikeko mibale ya nkosi na pembeni ya bisika ya kotia maboko. \v 20 Bikeko zomi na mibale ya nkosi ezalaki na likolo ya binyatelo motoba ya ematelo : enyatelo moko na moko ezalaki na bikeko mibale, ekeko moko na ngambo moko na moko. Kati na mikili nyonso, eloko ya ndenge wana etikala nanu kosalema te. \v 21 Bakopo nyonso ya mokonzi Salomo ezalaki ya wolo ya peto, mpe biloko nyonso ya ndako ya Zamba ya Libani ezalaki ya wolo ya peto. Eloko moko te ezalaki ya palata, pamba te, na tango oyo Salomo azalaki mokonzi, palata ezalaki na motuya ata te. \v 22 Mpe mokonzi azalaki na bamasuwa oyo ezalaki kosala mombongo na ebale monene elongo na bamasuwa ya Irami. Sima na mibu nyonso misato, bamasuwa ezalaki kozonga longwa na Tarsisi mpe ezalaki komema wolo, palata, pembe ya nzoko, bamakaku mpe bandeke oyo babengaka « paoni. » \p \v 23 Mokonzi Salomo alekaki bakonzi nyonso ya mokili na bozwi mpe na bwanya. \v 24 Mokili mobimba ezalaki koluka kokutana na Salomo mpo na koyoka bwanya oyo Nzambe atiaki kati na motema na ye. \v 25 Kati na bato oyo bazalaki kokende kotala Salomo, moko na moko azalaki komemela ye lokola kado : biloko ya palata, biloko ya wolo, bilamba, bibundeli, biloko ya mike-mike ya solo kitoko, bampunda mpe bamile. Mpe ezalaki bongo mibu nyonso. \p \v 26 Salomo asangisaki bashar mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda : azalaki na bashar nkoto moko na nkama minei, mpe basoda oyo batambolaka likolo ya bampunda, nkoto zomi na mibale. Abombaki bango kati na bingumba epai wapi babombaka bashar, mpe na Yelusalemi epai wapi mokonzi azalaki kovanda. \v 27 Mokonzi asalaki ete palata ekoma ebele na Yelusalemi lokola mabanga, mpe banzete ya sedele ekoma ebele lokola banzete ya sikomori oyo ezali kati na mokili ya lubwaku. \v 28 Bampunda ya Salomo ezalaki kowuta na Ejipito mpe na engumba Kue. Bato ya mombongo ya mokonzi nde bazalaki kosomba yango kuna na engumba Kue. \v 29 Bazalaki kosomba na Ejipito shar moko na motuya ya mbongo ya bibende ya palata, nkama motoba, mpe mpunda moko na motuya ya mbongo ya bibende, nkama moko na tuku mitano ; bazalaki mpe kosomba yango mpo na bakonzi nyonso ya bato ya Iti mpe ya Siri. \c 11 \s1 Basi ya Salomo \r (2Ma 11.18–12.1) \p \v 1 Mokonzi Salomo abalaki mwana mwasi ya Faraon ; kasi pembeni na ye, abalaki basi mosusu ebele ya bikolo ya bapaya : basi ya Moabi, ya Amoni, ya Edomi, ya Sidoni mpe ya Iti. \v 2 Basi yango bawutaki na bikolo oyo, na tina na bango, Yawe alobaki na bana ya Isalaele : « Bosengeli te kobalana na bango, noki te bakopengwisa bino mpe bakotindika mitema na bino na kosambela banzambe na bango. » Nzokande, Salomo akangamaki na basi ya bikolo ya bapaya na bolingo makasi. \v 3 Azalaki na basi nkama sambo oyo bazalaki bana ya bakonzi, mpe bamakangu nkama misato. Boye, basi na ye nyonso bapengwisaki ye. \v 4 Tango Salomo akomaki mobange, basi na ye batindikaki motema na ye na kogumbamela banzambe mosusu ; mpe atikaki kolinga Yawe, Nzambe na ye, na motema na ye mobimba ndenge ezalaki motema ya Davidi, tata na ye. \v 5 Salomo akomaki kosambela ekeko ya Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni. \v 6 Boye, Salomo asalaki penza makambo mabe na miso ya Yawe mpe atambolaki na boyengebene te liboso ya Yawe ndenge Davidi, tata na ye, atambolaki. \v 7 Na ngomba oyo etalani na Yelusalemi, Salomo atongaki esambelo ya likolo ya ngomba mpo na Kemoshi, nzambe ya mbindo ya Moabi ; mpe mpo na Moloki, nzambe ya mbindo ya bato ya Amoni. \v 8 Asalaki mpe bongo mpo na banzambe ya basi na ye nyonso ya bikolo ya bapaya mpo ete batumbelaka yango malasi mpe babonzelaka yango mbeka. \p \v 9 Yawe atombokelaki Salomo mpo ete motema na ye epengwaki mosika na Yawe, Nzambe ya Isalaele, oyo amimonisaki epai na ye mbala mibale. \v 10 Nzokande, Yawe apekisaki Salomo kosambela banzambe mosusu ; kasi Salomo atosaki te mitindo ya Yawe. \v 11 Boye, Yawe alobaki na Salomo : « Lokola oponi kotambola bongo mpe obateli te boyokani na Ngai mpe mitindo oyo napesaki yo, nakobotola yo bokonzi mpe nakopesa yango na moko kati na basali na yo. \v 12 Nzokande, mpo na Davidi, tata na yo, nakosala yango te na tango oyo ozali nanu na bomoi ; nakobotola yango nde na maboko ya mwana na yo ya mobali. \v 13 Kasi nakobotola ye bokonzi nyonso te ; nakotikela ye etuka moko mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na Yelusalemi, engumba oyo napona. » \s1 Banguna ya Salomo \p \v 14 Yawe abimisaki monguna moko mpo na kobundisa Salomo : Adadi, moto ya Edomi, mwana kati na libota ya bokonzi ya Edomi. \v 15 Na kala, na tango oyo Davidi abundisaki mokili ya Edomi, Joabi mokonzi ya mampinga, oyo akendeki mpo na kokunda bibembe, abomaki mibali nyonso ya Edomi. \v 16 Joabi mpe bato nyonso ya Isalaele batikalaki kuna basanza motoba kino tango basilisaki koboma mibali nyonso ya Edomi. \v 17 Kasi Adadi oyo azalaki nanu elenge na tango wana akimaki na Ejipito elongo na ndambo ya bato ya Edomi oyo bazalaki basali ya tata na ye. \v 18 Balongwaki na Madiani mpe bakendeki na Parani. Wuta na Parani, bazwaki bato mpe bakendeki elongo na bango na Ejipito epai ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Faraon apesaki Adadi ndako, eteni ya mabele mpe bilei. \v 19 Lokola Faraon asepelaki na Adadi mingi, abalisaki ye semeki na ye ya mwasi, ndeko mwasi ya Takipenesi, mwasi ya mokonzi. \v 20 Ndeko mwasi ya Takipenesi abotelaki Adadi mwana moko ya mobali mpe apesaki ye kombo « Genubati. » Takipenesi abokolaki ye kati na ndako ya Faraon. Genubati avandaki kuna elongo na bana ya Faraon. \v 21 Wana Adadi azalaki na Ejipito, ayokaki ete Davidi mpe Joabi, mokonzi ya mampinga, bakufi. Boye, Adadi alobaki na Faraon : \pi1 — Pesa ngai nzela ete nazonga na mokili na ngai. \p \v 22 Faraon atunaki ye : \pi1 — Ozangi eloko nini awa mpo ete oluka kozonga na mokili na yo ? \p Adadi azongisaki : \pi1 — Eloko moko te. Kasi tika ngai ete nakende kaka. \p \v 23 Nzambe abimisaki monguna mosusu mpo na kobundisa Salomo ; kombo na ye : Rezoni. Rezoni Azalaki mwana mobali ya Eliyada, oyo akimaki nkolo na ye, Adadezeri, mokonzi ya Tsoba. \v 24 Rezoni asangisaki mibali pene na ye mpe akomaki mokambi ya lisanga ya batomboki tango Davidi abomaki mampinga ya Tsoba. Bongo batomboki bakendeki na Damasi epai wapi bavandaki mpe bakomaki kokonza. \v 25 Rezoni azalaki monguna ya Isalaele na tango nyonso oyo Salomo azalaki na bokonzi. Wana Adadi azalaki kotia Isalaele mobulu, Rezoni akomaki mokonzi ya Siri mpe akomaki kokanela Isalaele. \s1 Jeroboami atombokeli Salomo \p \v 26 Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, moto ya Efrayimi ya Tsereda, moko kati na basali ya Salomo, atombokelaki mokonzi. Mama na ye azalaki mwasi akufisa mobali, mpe kombo na ye : Tseruya. \v 27 Tala ndenge atombokelaki mokonzi : na tango oyo Salomo azalaki kotonga Milo mpe kokanga madusu ya mir ya engumba ya Davidi, tata na ye, \v 28 Jeroboami azalaki elenge mobali ya makasi mpe ya mpiko ; lokola Salomo amonaki ndenge elenge mobali oyo azalaki kosala mosala na ye malamu, atiaki ye motambolisi misala nyonso ya makasi mpo na libota ya Jozefi. \v 29 Mokolo moko, wana Jeroboami azalaki kobima na Yelusalemi, Ayiya, mosakoli ya Silo, akutanaki na ye na nzela mpe alataki kazaka ya sika. Bazalaki kaka bango mibale na libanda ya mboka, kati na esobe. \v 30 Ayiya azwaki kazaka na ye ya sika oyo alataki, akataki yango na biteni zomi na mibale \v 31 mpe alobaki na Jeroboami : « Kamata biteni zomi mpo na yo, pamba te tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Nakobotola bokonzi na maboko ya Salomo mpe nakopesa yo bikolo zomi. \v 32 Kasi mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, mpe mpo na engumba Yelusalemi oyo napona kati na mabota nyonso ya Isalaele, Salomo akozwa kaka libota moko. \v 33 Nakosala bongo, pamba te basundolaki Ngai mpe bagumbamelaki Asitarite, nzambe mwasi ya bato ya Sidoni ; Kemoshi, nzambe ya bato ya Moabi ; mpe Moloki, nzambe ya bato ya Amoni, batambolaki te na banzela na Ngai mpo na kosala makambo ya sembo na miso na Ngai, kobatela malako mpe mibeko na Ngai, ndenge Davidi, tata ya Salomo, asalaki. \v 34 Kasi nakobotola te bokonzi nyonso na maboko ya Salomo, nakotika ye nanu kokonza na mikolo nyonso oyo akozala na bomoi, mpo na Davidi, mowumbu na Ngai, oyo naponaki mpe abatelaki mitindo mpe malako na Ngai. \v 35 Kasi nakobotola bokonzi na maboko ya mwana na ye ya mobali mpe nakopesa yo mabota zomi. \v 36 Nakopesa libota moko epai ya mwana na ye ya mobali mpo ete Davidi, mowumbu na Ngai, azala tango nyonso na mokitani liboso na Ngai kati na Yelusalemi, engumba oyo napona mpo na kotia Kombo na Ngai kati na yango. \v 37 Kasi mpo na yo, Jeroboami, nakozwa yo, mpe okokonza nyonso oyo motema na yo ekolinga mpe okozala mokonzi ya Isalaele. \v 38 Soki osali nyonso oyo Ngai nazali kotinda yo, soki otamboli na banzela na Ngai mpe osali makambo ya sembo na miso na Ngai, na kobatelaka mibeko mpe malako na Ngai ndenge Davidi, mowumbu na Ngai, asalaki, wana nakozala na yo elongo, nakosala ete bokonzi kati na libota na yo elendisama ndenge nasalaki epai ya Davidi, mpe nakopesa yo Isalaele. \v 39 Na bongo, nakoyokisa ndako ya Davidi soni, kasi mpo na libela te. › » \p \v 40 Salomo alukaki koboma Jeroboami, kasi Jeroboami akimaki na Ejipito epai ya Shishaki, mokonzi ya Ejipito, avandaki kuna kino na kufa ya Salomo. \s1 Kufa ya Salomo \r (2Ma 9.29-31) \p \v 41 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Salomo, misala na ye nyonso mpe bwanya na ye, ekomama kati na buku ya misala ya Salomo. \v 42 Salomo akonzaki Isalaele mobimba mibu tuku minei, na Yelusalemi. \v 43 Sima na yango, Salomo akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Mwana na ye, Roboami, akitanaki na ye na bokonzi. \c 12 \ms1 Bokonzi ekabwani \s1 Isalaele atombokeli Roboami \r (2Ma 10.1–11.4) \p \v 1 Roboami akendeki na Sishemi epai wapi lisanga mobimba ya Isalaele esanganaki mpo na kokomisa ye mokonzi. \v 2 Kasi sima na Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, koyoka sango yango wuta na Ejipito epai wapi akendeki kobombama mpo na kokima mokonzi Salomo, azongaki wuta na Ejipito. \v 3 Boye, batindaki bato kobenga Jeroboami ; bongo ye elongo na lisanga mobimba ya Isalaele bakendeki epai ya Roboami mpe balobaki na ye : \pi1 \v 4 — Tata na yo anyokolaki biso makasi ; kasi sik’oyo, yo, lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ; bongo biso, tokosalela yo. \p \v 5 Roboami azongisaki : \pi1 — Bokende epai na bino, bopesa ngai mikolo misato mpo na koyekola likambo yango, bongo bozongela ngai. \p Mpe bato bakendeki. \p \v 6 Mokonzi Roboami atunaki toli epai ya bampaka oyo basalaki elongo na Salomo, tata na ye, tango azalaki nanu na bomoi. Alobaki na bango : \pi1 — Toli nini bozali kopesa ngai lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo ? \p \v 7 Bazongiselaki ye : \pi1 — Soki, na mokolo ya lelo, omikomisi mosali ya bato oyo, soki osaleli bango mpe opesi bango eyano ya malamu, bakozala tango nyonso basali na yo. \p \v 8 Kasi Roboami aboyaki toli oyo bampaka bapesaki ye ; asengaki toli epai ya bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye mpe bazalaki kosalela ye. \v 9 Atunaki bango : \pi1 — Toli nini bozali kopesa lokola eyano ya kopesa epai ya bato oyo balobi na ngai : « Lembisa misala makasi mpe mikumba oyo tata na yo atia na mito na biso ? » \p \v 10 Bilenge mibali oyo bakolaki esika moko na ye bazongisaki : \pi1 — Tala makambo oyo okoyebisa bato oyo balobi na yo : « Tata na yo anyokolaki biso na misala makasi ; kasi yo, lembisela biso yango ! » Yebisa bango : « Mosapi na ngai ya moke eleki loketo ya tata na ngai na monene ; \v 11 soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai, nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. » \p \v 12 Sima na mikolo misato, Jeroboami elongo na bato nyonso bazongaki epai ya Roboami, ndenge mokonzi ayebisaki bango : « Bozongela ngai sima na mikolo misato. » \v 13 Mokonzi Roboami aboyaki kosalela toli oyo bampaka bapesaki ye, ayanolaki bato na maloba mabe makasi ; \v 14 alandaki toli ya bilenge mibali mpe ayebisaki bango : Soki tata na ngai anyokolaki bino na misala makasi, ngai nakoyeisa yango lisusu makasi koleka ; soki tata na ngai azalaki kobeta bino fimbu ya poso ya nyama, ngai nakobeta bino fimbu ya ebende. \p \v 15 Mokonzi aboyaki koyoka bato, pamba te ezalaki Yawe nde asalaki bongo mpo na kokokisa liloba oyo Yawe ayebisaki Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, na nzela ya mosakoli Ayiya, moto ya Silo. \p \v 16 Tango bana nyonso ya Isalaele bamonaki ete mokonzi aboyi koyoka bango, bazongiselaki ye : « Eloko nini ya lisanga tozali na yango na Davidi ? Tozali na eloko moko te ya lisanga na mwana mobali ya Izayi ! Isalaele, tika ete moto na moto azonga na ndako na ye ya kapo ! Mpe yo, mokitani ya Davidi, tikala kotala makambo ya ndako na yo ! » \p Boye, bana ya Isalaele bazongaki na bandako na bango ya kapo. \v 17 Roboami akobaki kokonza bana ya Isalaele oyo bazalaki kovanda na bingumba ya Yuda. \p \v 18 Mokonzi Roboami atindaki Adorami oyo azalaki motambolisi misala makasi, kasi bana nyonso ya Isalaele babambaki ye mabanga mpe akufaki. Nzokande, mokonzi Roboami alongaki komata na shar na ye mpo na kokima na Yelusalemi. \v 19 Ezali boye nde bana ya Isalaele batombokelaki ndako ya Davidi kino na mokolo ya lelo. \p \v 20 Tango bana nyonso ya Isalaele bayokaki ete Jeroboami azongi, batindaki bato kobenga ye ete aya na mayangani, mpe bakomisaki ye mokonzi ya Isalaele mobimba. Kaka libota ya Yuda nde etikalaki kotosa bokonzi ya ndako ya Davidi. \p \v 21 Tango Roboami azongaki na Yelusalemi, asangisaki libota nyonso ya Yuda mpe libota ya Benjame, aponaki kati na bango bilombe ya bitumba nkoto nkama moko na tuku mwambe mpo na kobundisa ndako ya Isalaele mpe kozongisa bokonzi na maboko ya Roboami, mwana mobali ya Salomo. \v 22 Kasi Nzambe alobaki na Shemaya, moto na Nzambe : \v 23 « Yebisa Roboami, mwana mobali ya Salomo, mokonzi ya Yuda ; mpe bana nyonso ya Yuda, ya Benjame mpe ba-oyo batikali : \v 24 ‹ Tala liloba oyo Yawe alobi : Bokende te kobundisa bandeko na bino, bato ya Isalaele ! Tika ete moto moko na moko azonga na ndako na ye, pamba te Ngai moko nde nasali makambo nyonso oyo eleki. › » \p Batosaki Liloba na Yawe mpe bazongaki na bandako na bango mpo na kotosa mitindo ya Yawe. \s1 Lisumu ya Jeroboami \p \v 25 Jeroboami atongaki engumba Sishemi, kati na etuka ya bangomba ya Efrayimi, mpe avandaki kuna. Longwa na Sishemi, abimaki mpe akendeki kotonga Penueli. \p \v 26 Jeroboami amilobelaki : « Ndenge makambo ezali kotambola, bokonzi ekoki kozonga na ndako ya Davidi. \v 27 Soki bato oyo bamati na Yelusalemi mpo na kobonza mbeka na Tempelo ya Yawe, bakopesa lisusu mitema na bango epai ya nkolo na bango, Roboami, mokonzi ya Yuda. Bakoboma ngai mpe bakozonga epai ya mokonzi Roboami. » \p \v 28 Sima na ye koluka toli, mokonzi asalaki bikeko mibale ya bana ngombe ya wolo. Alobaki na bato : \pi1 — Oh Isalaele, bokeyi mpe mingi na Yelusalemi ! Botala banzambe na bino oyo babimisaki bino na Ejipito. \p \v 29 Jeroboami atiaki ekeko moko na Beteli mpe mosusu na Dani. \v 30 Bongo likambo oyo ememaki bato na lisumu, pamba te bamoko bazalaki kokende kogumbamela ekeko oyo ezalaki na Beteli, mpe bamosusu bazalaki kokende mosika kino na Dani mpo na kogumbamela ekeko mosusu. \v 31 Jeroboami atongaki bisambelo ya likolo ya bangomba mpe atiaki banganga-nzambe oyo bazalaki ata te bato ya libota ya Levi. \p \v 32 Jeroboami akataki ete basalaka feti mibu nyonso na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe ndenge basalaka na mokili ya Yuda, mpe abonzaki mbeka na etumbelo. Asalaki ndenge wana na Beteli epai wapi abonzaki mbeka epai ya banzambe ya bikeko ya bana ngombe oyo asalaki, mpe atiaki banganga-nzambe na bisambelo oyo abongisaki na likolo ya bangomba. \v 33 Na mokolo ya zomi na mitano ya sanza ya mwambe, sanza oyo aponaki na ndenge na ye moko, abonzaki mbeka na etumbelo oyo atongaki na Beteli. Akataki ete basalaka feti mibu nyonso mpo na bana ya Isalaele mpe amataki na etumbelo mpo na kotumba ansa. \c 13 \s1 Moto na Nzambe akei na Beteli \p \v 1 Moto moko na Nzambe alongwaki na Yuda mpe akendeki na Beteli, kolanda etinda na Yawe, wana Jeroboami atelemaki pembeni ya etumbelo mpo na kotumba ansa. \v 2 Kolanda etinda na Yawe, moto na Nzambe agangaki makasi mpo na kolakela etumbelo mabe : « Etumbelo, etumbelo ! Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Mwana mobali moko akobotama na ndako ya Davidi, kombo na ye ekozala Joziasi. Akotumba na likolo na yo lokola mbeka banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba, oyo batumbaka ansa na likolo na yo. Mpe na likolo na yo, etumbelo, bakotumba mikuwa ya bato ! › » \p \v 3 Na mokolo wana kaka, moto na Nzambe apesaki elembo : \pi1 — Tala elembo oyo elakisi ete ezali Yawe nde alobi : Etumbelo ekobukana mpe putulu oyo ezali likolo na yango ekopanzana. \p \v 4 Tango mokonzi Jeroboami ayokaki bilakeli mabe oyo moto na Nzambe alobaki mpo na etumbelo ya Beteli, asembolaki loboko na ye wuta na etumbelo mpe alobaki : \pi1 — Bokanga ye ! \p Kasi loboko oyo Jeroboami asembolaki epai ya moto na Nzambe ekawukaki, mpe akokaki lisusu te kozongisa yango epai na ye. \v 5 Kaka na tango yango, etumbelo ebukanaki mpe putulu epanzanaki. Ezalaki penza elembo oyo moto na Nzambe apesaki kolanda etinda na Yawe. \p \v 6 Mokonzi alobaki na moto na Nzambe : \pi1 — Bondela Yawe, Nzambe na yo, mpe sambela mpo na ngai ete loboko na ngai ebonga. \p Moto na Nzambe abondelaki Yawe, mpe loboko ya mokonzi ebongaki, ezongaki ndenge ezalaki liboso. \v 7 Bongo mokonzi alobaki na moto na Nzambe : \pi1 — Tokende na ndako mpo ete ozwa eloko ya kolia mpe napesa yo kado. \p \v 8 Kasi moto na Nzambe azongiselaki mokonzi : \pi1 — Ata soki opesi ngai kati-kati ya bozwi na yo, nakokende epai na yo te, nakolia lipa te mpe nakomela ata litanga ya mayi te na esika oyo. \v 9 Pamba te Yawe apesaki ngai mitindo oyo : « Osengeli te kolia lipa, komela mayi mpe kozongela na nzela oyo oyelaki. » \p \v 10 Boye, akendeki na nzela mosusu mpe azongaki te na nzela oyo ayelaki na Beteli. \p \v 11 Nzokande, mosakoli moko ya mobange azalaki kovanda na Beteli ; bana na ye ya mibali bayaki koyebisa ye makambo nyonso oyo moto na Nzambe asalaki na Beteli, na mokolo wana, mpe oyo alobaki na mokonzi. \p \v 12 Tata na bango atunaki bango : \pi1 — Azongi na nzela nini ? \p Bana na ye ya mibali balakisaki ye nzela oyo moto na Nzambe, oyo awutaki na Yuda, azongelaki. \v 13 Bongo alobaki na bana na ye ya mibali : \pi1 — Bobongisela ngai ane. \p Sima na bana na ye kobongisela ye ane, amataki likolo na yango, \v 14 alandaki moto na Nzambe mpe akutaki ye avandi na se ya nzete ya Terebente. Atunaki ye : \pi1 — Ozali solo moto na Nzambe oyo awuti na Yuda ? \p Moto na Nzambe azongisaki : \pi1 — Iyo, ezali nde ngai. \p \v 15 Mosakoli alobaki na ye : \pi1 — Yaka kolia mesa moko na ngai, na ndako na ngai. \p \v 16 Moto na Nzambe alobaki : \pi1 — Nakoki te kozonga to kotambola nzela moko na yo ; nakoki mpe te kolia lipa to komela mayi elongo na yo na esika oyo, \v 17 pamba te Yawe alobaki na ngai : « Osengeli te kolia lipa, komela mayi mpe kozongela na nzela oyo oyelaki. » \p \v 18 Mosakoli ya mobange azongisaki : \pi1 — Ngai mpe nazali mosakoli lokola yo. Anjelu moko ya Yawe alobaki na ngai kolanda etinda na Yawe : « Zonga na ye nzela moko na ndako na yo mpo ete alia lipa mpe amela mayi. » \p Nzokande azalaki kokosa ye. \p \v 19 Boye, moto na Nzambe azongaki nzela moko na ye na Beteli, aliaki mpe amelaki kati na ndako na ye. \s1 Yawe abomi moto na Nzambe \p \v 20 Wana bavandaki na mesa, Yawe alobaki na mosakoli ya mobange, oyo azongisaki moto na Nzambe, \v 21 mpe agangelaki moto na Nzambe oyo awutaki na Yuda : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Mpo ete otosi te Liloba na Yawe mpe obateli te etinda oyo Yawe, Nzambe na yo, apesaki yo ; \v 22 mpo ete ozongi, olie lipa mpe omeli mayi na esika oyo napekisaki yo kolia to komela, bakokunda ebembe na yo te kati na kunda ya batata na yo. » \p \v 23 Tango moto na Nzambe asilisaki kolia mpe komela, mosakoli ya mobange abongisaki ane ya moto na Nzambe oyo azongisaki sima, \v 24 mpe moto na Nzambe azongelaki nzela na ye. Wana azalaki kokende, akutanaki na nkosi na nzela, mpe nkosi yango ebomaki ye. Ebembe na ye etikalaki na nzela, nkosi mpe ane etelemaki pembeni ya ebembe na ye. \v 25 Bato oyo bazalaki koleka bamonaki ebembe elali na nzela mpe nkosi etelemi pembeni na yango. Bakendeki kopesa sango kati na engumba epai wapi mosakoli ya mobange azalaki kovanda. \v 26 Tango mosakoli ya mobange, oyo azongisaki moto na Nzambe sima, na mobembo na ye, ayokaki sango yango, alobaki : \pi1 — Ezali solo moto na Nzambe oyo atosaki te mitindo ya Yawe. Yawe akabi ye epai ya nkosi oyo epasoli ye mpe ebomi ye kolandisama na liloba oyo Yawe ayebisaki ye. \p \v 27 Mosakoli ya mobange alobaki na bana na ye ya mibali : \pi1 — Bobongisela ngai ane ! \p Bana na ye ya mibali babongiselaki ye ane yango. \v 28 Abimaki mpe akutaki ebembe elali na nzela, ane mpe nkosi etelemi pembeni ya ebembe. Nkosi eliaki te ezala ebembe to ane. \v 29 Mosakoli ya mobange atombolaki ebembe ya moto na Nzambe, atiaki yango na likolo ya ane mpe amemaki yango na engumba na ye mpo na kosalela ye matanga mpe kokunda ye. \v 30 Atiaki ebembe kati na kunda na ye moko mpe ayembelaki ye nzembo oyo ya mawa : \pi1 — Ah, mawa, ndeko na ngai ! \p \v 31 Sima na kokunda ye, alobaki na bana na ye ya mibali : \pi1 — Tango nakokufa, bokokunda ngai kati na lilita epai wapi bakundi moto na Nzambe ; bokotia mikuwa na ngai pembeni ya mikuwa na ye. \v 32 Pamba te liloba oyo asakolaki kolanda etinda na Yawe mpo na kolakela mabe, etumbelo ya Beteli mpe bisambelo nyonso ya likolo ya bangomba kati na engumba Samari, ekokokisama solo. \p \v 33 Atako bongo, Jeroboami atikaki te banzela na ye ya mabe, akobaki kaka kotia bato ya mboka na ye lokola banganga-nzambe ya bisambelo ya likolo ya bangomba ; abulisaki lokola nganga-nzambe ya esambelo ya likolo ya ngomba moto nyonso oyo alingaki kokoma nganga-nzambe. \v 34 Oyo nde ezalaki lisumu ya ndako ya Jeroboami, oyo ememaki kokweya mpe kobebisama ya bokonzi na ye kati na mokili. \c 14 \s1 Lisakoli ya Ayiya \p \v 1 Na tango wana kaka, Abiya, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki kobela. \p \v 2 Jeroboami alobaki na mwasi na ye : \pi1 — Mibongola mpo ete bato bayeba te ete ozali mwasi ya mokonzi Jeroboami ; bongo, kende na Silo. Mosakoli Ayiya azali kuna ; ye nde alobaki na ngai ete nakozala mokonzi ya bato oyo. \v 3 Kamata mapa zomi, ndambo ya bagato, na ekolo ya mafuta ya nzoyi, mpe kende kokutana na ye ; akoyebisa yo makambo oyo ekokomela mwana na biso ya mobali. \p \v 4 Mwasi ya Jeroboami asalaki makambo oyo mobali na ye atindaki ye : akendeki na Silo mpe akotaki na ndako ya Ayiya. Nzokande, Ayiya azalaki komona lisusu te, pamba te miso na ye ekufaki mpo ete akomaki mobange. \p \v 5 Yawe alobaki na Ayiya : \pi1 — Mwasi ya Jeroboami azali koya kotuna yo toli mpo na mwana na ye ya mobali, pamba te azali kobela. Osengeli kopesa ye eyano songolo to pakala. Tango akoya, akosala lokola nde azali moto mosusu. \p \v 6 Tango Ayiya ayokaki makelele ya makolo ya mwasi ya Jeroboami na ekuke, alobaki : \pi1 — Kota, mwasi ya Jeroboami ! Mpo na nini ozali komibongola ? Natindami epai na yo mpo na koyebisa yo sango mabe. \v 7 Kende koloba na Jeroboami : « Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : ‹ Natombolaki yo kati na bato mpe nakomisaki yo mokambi ya bato na Ngai, Isalaele. \v 8 Nalongolaki bokonzi na maboko ya ndako ya Davidi mpe napesaki yo yango, kasi otambolaki te lokola Davidi, mowumbu na Ngai, oyo atosaki mibeko na Ngai mpe azalaki kolanda Ngai na motema na ye mobimba, mpo na kosala oyo kaka ezali malamu na miso na Ngai. \v 9 Kasi yo, osali mabe koleka bato nyonso oyo bazalaki liboso na yo : omisaleli banzambe mosusu, bikeko ya bibende banyangwisa na moto ; boye, olamusi kanda na Ngai mpe opesi Ngai mokongo. \v 10 Yango wana, nakoyeisa pasi na ndako ya Jeroboami, nakosilisa koboma mibali nyonso kati na ndako ya Jeroboami, ezala mowumbu to monsomi kati na Isalaele ; nakokomba ndako ya Jeroboami ndenge bakombaka matiti ya mbindo, kino nyonso penza ekosila. \v 11 Bambwa ekolia bato nyonso ya Jeroboami, oyo bakokufa kati na engumba ; mpe bandeke ya likolo ekolia bato nyonso oyo bakokufa na zamba, elobi Yawe. › » \v 12 Mpo na yo, telema mpe zonga na ndako na yo. Tango kaka okotia makolo na yo kati na engumba na yo, mwana na yo ya mobali akokufa. \v 13 Bato nyonso ya Isalaele bakosalela ye matanga mpe bakokunda ye. Ye moko kaka, kati na ndako ya Jeroboami, nde bakokunda ; pamba te kati na ndako mobimba ya Jeroboami, ye kaka nde Nzambe amoni na eloko ya malamu oyo esepelisi Yawe, Nzambe ya Isalaele. \v 14 Yawe akobimisa mpo na Ye moko, mokonzi mosusu ya Isalaele oyo akosilisa koboma ndako nyonso ya Jeroboami. Solo, ezali nde mpo na lelo, kaka sik’oyo ! \v 15 Yawe akobeta Isalaele, mpe Isalaele akoningana lokola nzete oyo ebotaka na mayi, oyo mayi ezali koningisa ; akopikola Isalaele wuta na mabele ya malamu oyo apesaki na bakoko na ye mpe akopanza bango mosika ya ebale Efrate, pamba te balamusi kanda ya Yawe na kosalaka makonzi ya bule mpo na Ashera. \v 16 Akokaba Isalaele mpo na masumu oyo Jeroboami asali mpe asalisi Isalaele. \p \v 17 Mwasi ya Jeroboami atelemaki, akendeki mpe akomaki na Tiritsa. Tango akomaki na ekuke ya ndako na ye, mwana na ye ya mobali akufaki. \v 18 Bakundaki ye, mpe Isalaele mobimba basalaki matanga ndenge kaka Yawe alobaki na nzela ya mowumbu na Ye, mosakoli Ayiya. \p \v 19 Misala mosusu ya Jeroboami, bitumba mpe bokonzi na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \v 20 Jeroboami asalaki mibu tuku mibale na mibale na bokonzi, akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye. Nadabi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Roboami, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 12.13-14) \p \v 21 Roboami, mwana mobali ya Salomo, akomaki mokonzi ya Yuda ; azalaki na mibu tuku minei na moko ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu zomi na sambo na Yelusalemi, engumba oyo Yawe aponaki kati na mabota nyonso ya Isalaele mpo na kotia Kombo na Ye. Kombo ya mama na Roboami ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni. \p \v 22 Bato ya Yuda basalaki makambo mabe na miso ya Yawe. Na nzela ya masumu oyo basalaki, balamusaki zuwa ya Nzambe koleka oyo batata na bango basalaki. \v 23 Batongaki lisusu mpo na bango moko bisambelo ya likolo ya bangomba, mabanga ya bule, makonzi ya bule mpo na Ashera na likolo ya bangomba nyonso mpe na se ya banzete nyonso ya mobesu. \v 24 Ezalaki lisusu na mibali oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule kati na mokili ya Yuda : bamipesaki na kosala makambo ya nkele kolanda bikolo ya bapaya oyo Yawe abenganaki liboso ya bato ya Isalaele. \r (2Ma 12.2-12) \p \v 25 Tango Roboami akokisaki mibu mitano na bokonzi, Shishaki, mokonzi ya Ejipito, ayaki kobundisa Yelusalemi. \v 26 Azwaki bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe bomengo ya ndako ya mokonzi. Azwaki penza biloko nyonso, ezala banguba nyonso ya wolo oyo Salomo asalisaki. \v 27 Boye, na esika ya banguba ya wolo, mokonzi Roboami asalisaki banguba ya bronze mpe apesaki yango epai ya bakonzi ya bakengeli na ye, oyo bazalaki kobatela ekotelo ya ndako ya mokonzi. \v 28 Tango nyonso mokonzi abandaki kokende na Tempelo ya Yawe, bakengeli bazalaki komema banguba mpe kozongisa yango kati na ndako ya bakengeli. \p \v 29 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Roboami mpe misala na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \v 30 Ezalaki tango nyonso na bitumba kati na Roboami mpe Jeroboami. \v 31 Roboami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Naama. » Naama azalaki moto ya Amoni. Abiyami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \c 15 \s1 Abiyami, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 13.1-2) \p \v 1 Tango Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, akokisaki mibu zomi na mwambe na bokonzi, Abiyami akomaki mokonzi ya Yuda. \v 2 Awumelaki mibu misato na bokonzi, na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Maaka. » Maaka azalaki mwana ya Abisalomi. \p \v 3 Asalaki masumu nyonso oyo tata na ye asalaki liboso ete Abiyami akoma mokonzi. Apesaki te motema na ye mobimba epai na Yawe, Nzambe na ye, ndenge ezalaki motema ya Davidi, koko na ye. \v 4 Nzokande, mpo na Davidi, Yawe Nzambe na ye, apesaki Abiyami mwinda kati na Yelusalemi, wana atiaki mwana na ye ya mobali mpo na kokitana na ye na bokonzi mpe kokomisa Yelusalemi makasi. \v 5 Pamba te Davidi asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe mpe abatelaki mibeko ya Yawe mikolo nyonso ya bomoi na ye, longola kaka likambo moko : likambo ya Iri, moto ya Iti. \p \v 6 Mikolo nyonso ya bomoi ya Abiyami, ndako ya Roboami ezalaki kaka na bitumba na ndako ya Jeroboami. \r (2Ma 13.22-23) \p \v 7 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Abiyami mpe misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Bitumba ezalaki kati na Jeroboami mpe Abiyami. \v 8 Abiyami akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye kati na engumba ya Davidi. Asa, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Asa, mokonzi ya Yuda \r (2Ma 14.2-3; 15.16–16.6) \p \v 9 Tango Jeroboami, mokonzi ya Isalaele, asalaki mibu tuku mibale na bokonzi, Asa akomaki mokonzi ya Yuda. \v 10 Asalaki mibu tuku minei na moko na bokonzi, na Yelusalemi. Kombo ya koko na ye ya mwasi ezalaki « Maaka. » Maaka azalaki mwana mwasi ya Abisalomi. \p \v 11 Asa asalaki makambo ya malamu na miso ya Yawe, ndenge Davidi, koko na ye, asalaki. \v 12 Abenganaki wuta na mokili, bato oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, mpe alongolaki banzambe nyonso ya bikeko oyo tata na ye asalaki. \v 13 Alongolaki ezala Maaka, koko na ye ya mwasi, na lokumu ya mama ya mokonzi ; pamba te Maaka asalelaki nzambe mwasi Ashera ekeko ya soni. Asa abukaki mpe atumbaki ekeko yango ya soni kati na lubwaku ya Sedron. \v 14 Nzokande, atako abebisaki te bisambelo ya likolo ya bangomba, Asa abatelaki motema na ye sembo na miso ya Yawe, na mikolo nyonso ya bomoi na ye. \v 15 Azongisaki kati na Tempelo ya Yawe biloko oyo tata na ye mpe ye moko babulisaki : palata, wolo mpe biloko mosusu. \p \v 16 Na mikolo nyonso oyo Asa mpe Baesha, mokonzi ya Isalaele, bazalaki na bokonzi, bazalaki kaka na bitumba. \v 17 Baesha, mokonzi ya Isalaele, abundisaki Yuda mpe alendisaki bamir ya engumba Rama mpo na kopekisa bato kokota to kobima na mokili ya Asa, mokonzi ya Yuda. \v 18 Asa azwaki palata mpe wolo nyonso oyo etikalaki kati na bibombelo bomengo ya Tempelo ya Yawe mpe ya ndako ya mokonzi ; apesaki yango na maboko ya basali na ye mpe atindaki bango epai ya Beni-Adadi, mwana mobali ya Tabirimoni, mwana mobali ya Ezioni, mokonzi ya Siri, oyo azalaki kovanda na Damasi. Atindelaki ye mpe maloba oyo : \v 19 « Tika ete tosala boyokani kati na ngai mpe yo ndenge ezalaki kati na tata na ngai mpe tata na yo. Tala, natindeli yo kado ya palata mpe ya wolo. Kende kokata boyokani na yo elongo na Baesha, mokonzi ya Isalaele, mpo ete abundisa ngai lisusu te. » \v 20 Beni-Adadi andimaki maloba ya mokonzi Asa mpe atindaki bakonzi ya basoda na ye kobundisa bingumba ya Isalaele. Abotolaki Iyoni, Dani, Abele-Beti-Maaka, etuka mobimba ya Kinereti mpe mokili nyonso ya Nefitali. \v 21 Tango kaka Baesha ayokaki bongo, atikaki kolendisa engumba Rama mpe akendeki kovanda na Tiritsa. \v 22 Bongo mokonzi Asa abengisaki bato nyonso ya Yuda, kolongola ata moto moko te ; mpe bamemaki longwa na Rama mabanga mpe mabaya oyo Baesha azalaki kosalela kuna. Mokonzi Asa asalelaki yango mpo na kolendisa engumba Geba kati na etuka ya Benjame, mpe engumba Mitsipa. \r (2Ma 16.11–17.1) \p \v 23 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Asa, molende na ye, misala na ye nyonso mpe bingumba na ye nyonso oyo atongaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. Tango akomaki mobange, akomaki kobela makolo. \v 24 Asa akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, tata na ye. Jozafati, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Nadabi, mokonzi ya Isalaele \p \v 25 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu mibale na bokonzi ; Nadabi, mwana mobali ya Jeroboami, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki Isalaele mibu mibale. \v 26 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, atambolaki na banzela mabe ya tata na ye, oyo atindikaki mpe bato ya Isalaele na kosala masumu. \v 27 Baesha, mwana mobali ya Ayiya, moto ya libota ya Isakari, asalelaki ye likita mpe abomaki ye na Gibetoni, moko kati na bingumba ya bato ya Filisitia, na tango oyo Nadabi elongo na Isalaele mobimba bazingelaki Gibetoni. \v 28 Baesha abomaki Nababi tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, mpe akitanaki na Nadabi na bokonzi. \v 29 Tango azwaki bokonzi, abomaki libota nyonso ya Jeroboami mpe atikaki ata moto moko te na bomoi kati na libota ya Jeroboami : abomaki bato nyonso kolanda etinda na Yawe na nzela ya mowumbu na ye, Ayiya, moto ya Silo, \v 30 mpo na masumu oyo Jeroboami asalaki mpe atindikaki bato ya Isalaele na kosala. Na bongo, apelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. \p \v 31 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Nadabi mpe misala na ye nyonso, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \v 32 Na mikolo nyonso oyo Asa mpe Baesha, mokonzi ya Isalaele, bazalaki na bokonzi, bazalaki kaka na bitumba. \s1 Baesha, mokonzi ya Isalaele \p \v 33 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu misato na bokonzi, Baesha, mwana mobali ya Ayiya, akomaki mokonzi ya Isalaele mobimba, na Tiritsa. Asalaki mibu tuku mibale na minei na bokonzi. \v 34 Baesha asalaki makambo mabe na miso ya Yawe, na komekola banzela ya Jeroboami oyo atindikaki bato ya Isalaele na kosala masumu na ye. \c 16 \p \v 1 Yawe alobaki na Jewu, mwana mobali ya Anani, na tina na Baesha : \v 2 « Mpo ete nazwaki yo kati na putulu mpe nakomisi yo mokambi ya bato na Ngai, Isalaele, kasi otambolaki na banzela ya Jeroboami mpe okweyisi bato na Ngai, Isalaele, na masumu oyo epelisi kanda na Ngai, \v 3 nakokombola Baesha mpe libota na ye nyonso, mpe nakokomisa ndako na ye lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati. \v 4 Bambwa ekolia bato ya Baesha oyo bakokufa kati na engumba mpe bandeke ya likolo ekolia bato oyo bakokufa na bilanga. » \p \v 5 Makambo mosusu oyo etali mokonzi Baesha mpe misala minene oyo asalaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \v 6 Baesha akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Tiritsa ; mpe Ela, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \v 7 Yawe alobaki lisusu na nzela ya mosakoli Jewu, mwana mobali ya Anani, na tina na Baesha mpe ndako na ye, mpo na makambo mibale oyo : ya liboso, mpo na mabe nyonso oyo asalaki na miso ya Yawe, na kopelisa kanda ya Yawe na nzela ya misala na ye kino kokoma ndenge moko na libota ya Jeroboami ; ya mibale, mpo ete asilisaki koboma bato nyonso ya libota ya Jeroboami. \s1 Ela, mokonzi ya Isalaele \p \v 8 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, asalaki mibu tuku mibale na motoba na bokonzi ; Ela, mwana mobali ya Baesha, akomaki mokonzi ya Isalaele mpe akonzaki Isalaele mibu mibale na Tiritsa. \p \v 9 Zimiri, mokonzi ya mampinga oyo azalaki kokamba ndambo ya bashar na ye, asalelaki ye likita. Na tango wana, mokonzi Ela azalaki na Tiritsa komela mpe kolangwa masanga na ndako ya Aritsa, mobateli biloko ya ndako ya mokonzi, kuna na Tiritsa. \v 10 Zimiri akotaki, abetaki mpe abomaki ye na tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi. Boye, Zimiri akitanaki na Ela na bokonzi. \v 11 Na tango kaka azwaki bokonzi mpe avandaki na kiti ya bokonzi, asilisaki koboma libota mobimba ya Baesha ; atikaki ata mobali moko te na bomoi, ezala ndeko to molingami na ye. \v 12 Boye, Zimiri asilisaki koboma libota nyonso ya Baesha kolanda Liloba na Yawe, oyo elobamaki mpo na kotelemela Baesha na nzela ya mosakoli Jewu ; \v 13 likolo ya masumu nyonso oyo Baesha elongo na mwana na ye ya mobali Ela basalaki mpe oyo ememaki Isalaele mobimba na libebi ; masumu oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na nzela ya banzambe na bango ya bikeko oyo ezanga tina. \p \v 14 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Ela, misala na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \b \p \v 15 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku mibale na sambo na bokonzi ; Zimiri akonzaki na Tiritsa, mikolo sambo. \p Mampinga ya basoda ya Isalaele batongaki molako na bango pembeni ya Gibetoni, engumba ya bato ya Filisitia, mpo na kobundisa yango. \v 16 Tango bato ya Isalaele oyo bazalaki kati na molako bayokaki ete Zimiri asali likita mpo na kotelemela mokonzi Asa mpe abomaki ye, bakomisaki kaka na mokolo wana Omiri oyo azalaki mokonzi ya mampinga, mokonzi ya Isalaele kati na molako. \v 17 Bongo Omiri elongo na bato nyonso ya Isalaele balongwaki na Gibetoni mpe bakendeki kozingela Tiritsa. \v 18 Tango Zimiri amonaki ete mampinga ya Isalaele esili kobotola engumba, akotaki na ndako ya bokonzi, amitumbaki na ndako mpe akufaki na moto. \v 19 Akufaki likolo ya masumu oyo asalaki, na kosala mabe na miso ya Yawe mpe na kotambola na banzela ya Jeroboami oyo asalaki masumu oyo ememaki Isalaele na libebi. \p \v 20 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Zimiri mpe botomboki na ye, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \p \v 21 Sima na kufa ya Zimiri, bana ya Isalaele bakabwanaki na bandambo mibale : ndambo moko elandaki Tibini, mwana mobali ya Ginati lokola mokonzi ; mpe ndambo mosusu elandaki Omiri. \v 22 Kasi bato oyo bazalaki kolanda Omiri bamonanaki makasi koleka bato oyo bazalaki kolanda Tibini, mwana mobali ya Ginati. Boye, Tibini akufaki mpe Omiri akitanaki na ye na bokonzi. \p \v 23 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na moko, Omiri akomaki mokonzi ya Isalaele. Asalaki mibu zomi na mibale na bokonzi, mpe kati na mibu zomi na mibale wana, akonzaki mpe engumba Tiritsa mibu motoba. \v 24 Asombaki ngomba Samari epai ya Shemeri na motuya ya palata nkoto motoba mpe atongaki engumba likolo na yango. Abengaki engumba yango Samari kolanda kombo ya Shemeri, mokolo na yango ya liboso. \p \v 25 Kasi Omiri asalaki makambo mabe na miso ya Yawe mpe asalaki masumu koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye. \v 26 Atambolaki na banzela nyonso ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo asalaki masumu oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, na nzela ya banzambe na bango ya bikeko oyo ezanga tina. \p \v 27 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Omiri : misala oyo asalaki mpe nguya oyo alakisaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \v 28 Omiri, akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye na Samari. Akabi, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Akabi, mokonzi ya Isalaele \p \v 29 Tango Asa, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu tuku misato na mwambe na bokonzi, Akabi, mwana mobali ya Omiri, akomaki mokonzi ya Isalaele. Akonzaki Isalaele na engumba Samari mibu tuku mibale na mibale. \v 30 Akabi, mwana mobali ya Omiri, asalaki makambo mabe mingi na miso ya Yawe koleka bakonzi nyonso oyo bakonzaki liboso na ye. \v 31 Lokola amonaki ete kolanda masumu ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, ekokaki te, abalaki Jezabeli, mwana mwasi ya Etibala, mokonzi ya Sidoni, mpe akomaki kosalela nzambe Bala mpe kogumbamela yango. \v 32 Akabi atongaki etumbelo mpo na nzambe Bala kati na ndako oyo atongaki mpo na yango, na Samari. \v 33 Akabi atongaki lisusu likonzi ya bule ya nzambe mwasi Ashera ; asalaki makambo mabe koleka bakonzi nyonso ya Isalaele oyo bakonzaki liboso na ye, makambo oyo epelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele. \p \v 34 Na tango Akabi azalaki mokonzi, Iyeli, moto ya Beteli, atongaki lisusu engumba Jeriko. Tango atongaki miboko na yango, Abirami, mwana na ye ya liboso ya mobali, akufaki ; mpe tango batiaki bikuke na yango, Segubi, mwana na ye ya mobali ya suka, akufaki. Yango esalemaki kolanda liloba oyo Yawe alobaki na nzela na Jozue, mwana mobali ya Nuni. \c 17 \ms1 Misala ya mosakoli Eliya \s1 Mosakoli Eliya na Tango ya Bokawuki \p \v 1 Eliya, moto ya Tishibe, moko kati na bavandi ya Galadi, alobaki na mokonzi Akabi : \pi1 — Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe ya Isalaele, Nzambe oyo ngai nasalelaka, mamwe mpe mvula ekozala te na mibu oyo ezali koya, longola kaka soki nasengi yango. \p \v 2 Bongo Yawe alobaki na Eliya : \pi1 \v 3 — Longwa awa, kende na ngambo ya este mpe bombama na lubwaku ya Keriti, na ngambo ya este ya Yordani. \v 4 Kuna, okomela mayi ya lubwaku, mpe napesi mitindo epai ya bayanganga mpo ete eleisa yo. \p \v 5 Eliya asalaki ndenge Yawe alobaki na ye : akendeki na lubwaku ya Keriti na ngambo ya este ya Yordani mpe avandaki kuna. \v 6 Bayanganga ezalaki komemela ye mapa mpe mbisi na tongo mpe na pokwa, mpe amelaki mayi ya lubwaku. \s1 Eliya mpe mwasi akufisa mobali \p \v 7 Sima na mwa tango, mayi ya lubwaku ekawukaki mpo ete mvula ezalaki lisusu konoka te na mokili. \v 8 Yawe alobaki na Eliya : \v 9 « Kende na lombangu na Sarepita, kati na mokili ya Sidoni, mpe vanda kuna. Napesi mitindo kuna epai ya mwasi moko oyo akufisa mobali ete apesa yo bilei. » \p \v 10 Eliya akendeki na Sarepita. Tango akomaki na ekuke ya engumba, mwasi moko oyo akufisa mobali azalaki wana ; azalaki kolokota bakoni. Eliya abengaki ye mpe alobaki na ye : \pi1 — Nabondeli yo, zwela ngai mwa mayi na mbeki mpo ete namela. \p \v 11 Tango mwasi yango azalaki kokende kozwa mayi, Eliya ayebisaki ye lisusu : \pi1 — Nabondeli yo, memela ngai mpe lipa. \p \v 12 Mwasi yango azongiselaki ye : \pi1 — Na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, nazali na lipa te ; nazali kaka na mwa ndambo ya farine na sani mpe ndambo ya mafuta na mbeki. Nazali kolokota mwa koni oyo nakomema na ndako mpo na kolamba bilei ya suka mpo na ngai mpe mpo na mwana na ngai ya mobali. Tango tokosilisa yango, ekotikala na biso kaka kozela kufa. \p \v 13 Eliya alobaki na ye : \pi1 — Kobanga te, zonga na ndako mpe sala ndenge olobi. Kasi salela ngai nanu lipa na oyo ozali na yango mpe memela ngai yango ; bongo na sima, okosala mpo na yo mpe mpo na mwana na yo ya mobali. \v 14 Pamba te, tala maloba oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Farine ekozanga te na sani, mpe mafuta ekosila te na mbeki. » \p \v 15 Mwasi yango akendeki mpe asalaki ndenge kaka Eliya alobaki. Boye, na tango molayi, bilei ezangaki te mpo na Eliya, mpo na mwasi oyo akufisa mobali mpe mpo na ndako na ye. \v 16 Farine etikalaki kosila te na sani, mpe mafuta etikalaki kokawuka te na mbeki, kolanda ndenge Yawe alobaki na nzela ya mosakoli Eliya. \s1 Eliya asekwisi mwana mobali \p \v 17 Sima na mwa tango, mwana mobali ya mwasi oyo akufisa mobali, nkolo ndako, abelaki ; mpe pasi na ye ekomaki makasi penza kino akataki motema. \p \v 18 Mwasi yango alobaki na Eliya : \pi1 — Moto na Nzambe, nasali yo nini ? Boni, oyaki na ndako na ngai mpo na kokundola lisumu na ngai mpe kobomisa mwana na ngai ya mobali ? \p \v 19 Eliya azongisaki : \pi1 — Pesa ngai mwana na yo ya mobali. \p Eliya azwaki mwana yango na maboko ya mwasi oyo akufisa mobali, amemaki ye na shambre ya likolo epai wapi azalaka kovanda mpe alalisaki ye na mbeto na ye ; \v 20 abelelaki Yawe na maloba oyo : \pi1 — Oh Yawe, Nzambe na ngai, mpo na nini koyeisa lisusu pasi na bomoi ya mwasi oyo akufisa mobali, na koboma mwana na ye ya mobali ; nzokande ayambaki ngai epai na ye ? \p \v 21 Sima, amitandaki mbala misato likolo ya mwana mobali mpe abelelaki Yawe na maloba oyo : \pi1 — Oh Yawe, Nzambe na ngai, tika ete pema ya mwana mobali oyo ezonga kati na ye. \p \v 22 Yawe ayanolaki libondeli ya Eliya mpe azongisaki pema kati na mwana mobali, bongo mwana yango azongaki lisusu na bomoi. \v 23 Eliya azwaki mwana mpe akitisaki ye wuta na shambre ya likolo kino kati na ndako. Apesaki mwana epai ya mama na ye mpe alobaki : \pi1 — Tala mwana na yo ya mobali, azali na bomoi. \p \v 24 Mwasi yango alobaki na Eliya : \pi1 — Nasosoli sik’oyo ete ozali solo moto na Nzambe ; mpe Liloba na Yawe, oyo ebimaka na monoko na yo ezali penza solo. \c 18 \s1 Eliya mpe Akabi \p \v 1 Sima na tango molayi, na mobu ya misato, Yawe alobaki na Eliya : « Kende komimonisa epai ya Akabi, mpe Ngai nakonokisa mvula na mokili oyo. » \p \v 2 Eliya akendeki komimonisa epai ya Akabi. \p Wana nzala ezalaki makasi na Samari, \v 3 Akabi abengisaki Abidiasi, mobateli bikolo ya ndako na ye. Nzokande Abidiasi azalaki kotosa Yawe mingi. \v 4 Wana Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe, Abidiasi azwaki basakoli nkama moko mpe abombaki bango kati na madusu mibale ya mabanga : basakoli tuku mitano na lidusu moko na moko, mpe azalaki kopesa bango bilei mpe mayi. \v 5 Akabi apesaki mitindo na Abidiasi : « Tambola kati na mokili mobimba, na bitima nyonso ya mayi mpe na miluka nyonso ; tango mosusu tokoki kozwa matiti ya mobesu mpe tokobatela bomoi ya bampunda mpe ya bamile mpo ete toboma lisusu te ndambo ya bibwele na biso. » \p \v 6 Bakabolaki mokili mpo na kotambola kati na yango, Akabi akendeki ye moko na ngambo moko, Abidiasi mpe akendeki ye moko na ngambo mosusu. \p \v 7 Wana Abidiasi azalaki kokende, Eliya akutanaki na ye. Abidiasi asosolaki ete ezali ye, afukamaki elongi kino na se mpe alobaki : \pi1 — Boni, ezali penza yo, Eliya, nkolo na ngai ? \p \v 8 Eliya azongisaki : \pi1 — Iyo, ezali ngai. Kende koyebisa mokonzi na yo ete Eliya azali awa. \p \v 9 Abidiasi atunaki : \pi1 — Likambo nini ya mabe ngai nasali mpo ete okaba mosali na yo epai ya Akabi mpo ete baboma ngai ? \v 10 Solo, na Kombo na Yawe, Nzambe na yo, ezali na ekolo moko te to mokili moko te epai wapi nkolo na ngai azangi kotinda bato koluka yo. Mpe soki ekolo moko to mokili elobi ete ozalaki kuna te, Akabi azalaki kolapisa bango ndayi ete bamoni yo te. \v 11 Kasi sik’oyo otindi ngai ete nakende epai ya mokonzi na ngai koyebisa ye ete Eliya azali awa. \v 12 Nayebi te esika nini Molimo na Yawe akoki komema yo tango nakotika yo. Soki namemi sango epai ya Akabi, kasi ye amoni yo te, akoboma ngai. Nzokande ngai, mosali na yo, natosaka Yawe wuta bolenge na ngai. \v 13 Nkolo na ngai, oyokaki te makambo oyo nasalaki tango Jezabeli azalaki koboma basakoli ya Yawe ? Nabombaki basakoli ya Yawe nkama moko kati na madusu mibale ya mabanga : tuku mitano na lidusu moko na moko mpe napesaki bango bilei mpe mayi ya komela. \v 14 Sik’oyo olobi na ngai ete nakende koyebisa mokonzi na ngai ete Eliya azali awa ? Akoboma ngai ! \p \v 15 Eliya alobaki : \pi1 — Solo, na Kombo na Yawe, Mokonzi ya mampinga, Nzambe oyo ngai nazali kosalela, lelo nakomimonisa epai ya Akabi. \p \v 16 Boye Abidiasi akendeki kokutana na Akabi mpe apesaki ye sango ; mpe Akabi akendeki kokutana na Eliya. \p \v 17 Tango Akabi amonaki Eliya alobaki na ye : \pi1 — Yo nde moto ozali kotia mobulu kati na Isalaele ? \p \v 18 Eliya azongisaki : \pi1 — Natie mobulu te kati na Isalaele. Kasi ezali nde yo mpe libota ya tata na yo bato bozali kosala mobulu, pamba te botosaki te mibeko ya Yawe mpe bolandi banzambe Bala. \v 19 Sik’oyo bengisa bato ya Isalaele nyonso ete tokutana na ngomba Karimeli elongo na basakoli ya Bala nkama minei na tuku mitano mpe basakoli ya Ashera nkama minei oyo baliaka na mesa ya Jezabeli. \p \v 20 Boye Akabi atindaki sango epai ya bato nyonso ya Isalaele mpe asangisaki basakoli na ngomba Karimeli. \v 21 Eliya apusanaki pene na bato mpe alobaki : \pi1 — Kino tango nini bokotambola lokolo moko na zamba mpe lokolo mosusu na nzela ? Soki Yawe azali Nzambe, tika ete bolanda Ye ! Kasi soki mpe Bala, bolanda ye. \p Bato bazongisaki ata eloko moko te. \p \v 22 Boye Eliya alobaki na bango : \pi1 — Natikali kaka ngai moko mosakoli kati na basakoli na Yawe. Kasi Bala azali na basakoli tuku minei na mitano. \v 23 Bobongisela biso bangombe mibale ya mibali. Tika ete basakoli ya Bala bapona bango moko ngombe moko, bakata-kata yango na biteni mpe batia yango likolo ya bakoni, kasi bapelisa moto te. Ngai mpe nakobongisa ngombe mosusu, nakotia yango likolo ya bakoni, kasi na kopelisa moto te. \v 24 Boye bokobelela kombo ya nzambe na bino, bongo ngai mpe nakobelela Kombo ya Yawe. Nzambe oyo akoyanola na nzela ya moto, Ye nde Nzambe ya solo. Boye bato nyonso bazongisaki : \pi1 — Makambo oyo olobi ezali malamu. \p \v 25 Eliya alobaki na basakoli ya Bala : \pi1 — Bopona ngombe moko kati na bangombe ya mibali ; bino bozala bato ya liboso ya kobongisa yango, pamba te bozali ebele. Bobelela kombo ya nzambe na bino, kasi bopelisa moto te. \p \v 26 Boye, bazwaki ngombe ya mobali oyo bapesaki bango mpe babongisaki yango. Babelelaki kombo ya Bala kobanda na tongo kino na midi, bagangaki : « Bala, yanola biso ! » \p Kasi eyano ezalaki te mpe nzambe moko te ayanolaki bango. Bakomaki kobina zingazinga ya etumbelo oyo batongaki. \p \v 27 Na midi, Eliya akomaki kotiola bango, alobaki : « Boganga lisusu makasi, pamba te azali nzambe ; tango mosusu azali kokanisa makambo ebele to akangami na misala mosusu to azali na mobembo ; to mpe azali kolala, boye esengeli bino kolamusa ye. » \p \v 28 Boye bagangaki lisusu makasi mpe bamizokisaki na mipanga na makonga, ndenge ezalaki momesano na bango kino makila kotanga. \v 29 Wana ngonga ya midi elekaki, bakobaki kotuntuka kino na tango ya mbeka ya pokwa, kasi eyano ezalaki kaka te, nzambe moko te ayanolaki bango mpe ata elembo moko te ezalaki. \p \v 30 Eliya alobaki na bato nyonso : \pi1 — Bopusana pene na ngai ! \p Bato nyonso bapusanaki pene na ye mpe Eliya abongisaki etumbelo ya Yawe oyo ebukanaki. \v 31 Eliya akamataki mabanga zomi na mibale kolanda motango ya mabota ya bana mibali ya Jakobi oyo Yawe alobaki na ye : « Kombo na yo ekozala Isalaele. » \v 32 Na mabanga yango, atongaki etumbelo mpo na Yawe ; atimolaki libulu ya mayi oyo ekokaki kokota balitele pene tuku misato zingazinga ya etumbelo. \v 33 Abongisaki bakoni, akataki ngombe na biteni mpe atiaki yango likolo ya bakoni. \v 34 Alobaki na bango : \pi1 — Botondisa mayi kati na bambeki minei ya minene mpe bosopa yango na likolo ya mbeka mpe na likolo ya bakoni. \p Basalaki bongo. \p Alobaki na bango lisusu : \pi1 — Botondisa mayi kati na bambeki minei ya minene mpe bosopa yango na likolo ya mbeka mpe na likolo ya bakoni. \p Basalaki lisusu bongo. \p Apesaki bango mitindo : \pi1 — Bosala bongo mpo na mbala ya misato ! \p Basalaki bongo mpo na mbala ya misato. \v 35 Mayi esopanaki zingazinga ya etumbelo mpe etondisaki libulu. \p \v 36 Na ngonga oyo batumbaka mbeka ya pokwa, mosakoli Eliya apusanaki mpe asambelaki : \pi1 — Oh Yawe, Nzambe ya Abrayami, ya Izaki mpe ya Isalaele ! Tika bato bayeba lelo ete Yo nde ozali Nzambe ya Isalaele, mpe ngai nazali mosali na Yo ; mpe nasali makambo oyo nyonso na etinda na Yo. \v 37 Yanola ngai, oh Yawe, yanola ngai, mpo ete bato oyo bayeba solo ete Yo, Yawe, nde ozali Nzambe ; na bongo okozongisa mitema ya bato oyo epai na Yo. \p \v 38 Bongo moto ya Yawe ekweyaki, ezikisaki mbeka, bakoni, mabanga mpe ekawusaki mayi nyonso kati na libulu. \v 39 Tango bato nyonso bamonaki bongo, bakweyaki bilongi na se mpe bagangaki : \pi1 — Solo, Yawe nde azali Nzambe ; Yawe nde azali Nzambe ! \p \v 40 Eliya apesaki bango mitindo : \pi1 — Bokanga basakoli ya Bala, botika ata moto moko te kokima. \p Bakangaki bango, mpe Eliya amemaki bango na lubwaku ya Kishoni mpo na kokata bango bakingo kuna. \p \v 41 Eliya alobaki na Akabi : \pi1 — Kende, lia mpe mela, pamba te nazali koyoka makelele ya mvula makasi. \p \v 42 Boye, Akabi akendeki kolia mpe komela. Kasi Eliya amataki kino na songe ya ngomba Karimeli, afukamaki elongi kino na se, na kati-kati ya mabolongo. \v 43 Alobaki na mosali na ye : \pi1 — Kende kotala na nzela ya ebale monene. \p Mosali na ye akendeki kotala, alobaki : \pi1 — Eloko moko te ezali kuna. \p Eliya atindaki ye mbala sambo na maloba oyo : « Kende kotala lisusu ! » \p \v 44 Na mbala ya sambo, mosali na ye alobaki : \pi1 — Tala, lipata moko ya moke lokola loboko ya moto ezali kobima wuta na ebale monene. \p Boye Eliya alobaki : \pi1 — Kende koyebisa Akabi : « Bongisa shar na yo noki mpe zonga na ndako na yo, noki te mvula ekokanga yo na nzela. » \p \v 45 Na tango wana kaka, likolo eyindaki makasi na mapata ya mvula, mopepe eyaki, mpe mvula makasi enokaki. Akabi amataki na shar na ye mpe akendeki na Jizireyeli. \v 46 Lokola nguya na Yawe ezalaki likolo ya Eliya oyo alataki mokaba na loketo na ye, akimaki mbangu liboso ya Akabi kino na ekuke ya Jizireyeli. \c 19 \s1 Kokima ya Eliya \p \v 1 Akabi ayebisaki Jezabeli makambo nyonso oyo Eliya asalaki mpe ndenge nini abomaki basakoli nyonso na mopanga. \v 2 Boye Jezabeli atindaki ntoma epai ya Eliya mpo na koyebisa ye : \pi1 — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki lobi, kaka na ngonga oyo, nakomisi bomoi na yo te ndenge okomisaki bomoi ya moko na moko kati na bango. \p \v 3 Eliya abangaki mpe akimaki mpo na kobikisa bomoi na ye. Tango akomaki na Beri-Sheba ya Yuda, atikaki kuna mosali na ye. \v 4 Sima na ye kotambola mokolo mobimba kati na esobe, akomaki na nzete moko ya moke, avandaki na se na yango mpe asengaki kufa na maloba oyo : \pi1 — Yawe, nalembi ! Zwa molimo na ngai mpo ete naleki bakoko na ngai te na malamu. \p \v 5 Bongo alalaki na se ya nzete yango mpe azwaki pongi. Mbala moko, anjelu moko asimbaki ye mpe alobaki na ye : \pi1 — Lamuka mpe lia. \p \v 6 Atalaki mpe amonaki pene ya esika oyo atiaki moto, lipa batumba na mabanga ya moto mpe mbeki ya mayi. Aliaki, amelaki mpe alalaki lisusu. \v 7 Anjelu ya Yawe azongaki na mbala ya mibale, asimbaki ye lisusu mpe alobaki : \pi1 — Lamuka mpe lia, pamba te mobembo ezali molayi mingi mpo na yo. \p \v 8 Boye alamukaki, aliaki mpe amelaki. Bongo na makasi oyo azwaki na nzela ya bilei, atambolaki mobembo ya mikolo tuku minei mpe ya babutu tuku minei kino akomaki na Orebi, ngomba ya Nzambe. \p \v 9 Kuna, akotaki na lidusu ya mabanga mpe alekisaki butu. Yawe alobaki na ye : \pi1 — Eliya, ozali kosala nini awa ? \p \v 10 Azongisaki : \pi1 — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai. \p \v 11 Yawe alobaki : \pi1 — Bima mpe telema na ngomba liboso ya Yawe, pamba te Yawe alingi koleka. \p Boye mopepe moko ya makasi penza epepaki, ebukaki bangomba mpe epanzaki mabanga liboso ya Yawe. Nzokande Yawe azalaki kati na mopepe makasi te. \v 12 Sima na mopepe makasi, mabele eninganaki ; nzokande Yawe azalaki te kati na koningana ya mabele. Sima na koningana ya mabele, moto eyaki ; nzokande Yawe azalaki te kati na moto wana. Mpe sima na moto, mopepe ya kimia penza eyaki. \v 13 Tango kaka Eliya ayokaki yango, azipaki elongi na ye na songe ya kazaka na ye, abimaki mpe atelemaki na ekotelo ya lidusu ya mabanga. Mpe mongongo moko elobaki na ye lisusu : \pi1 — Eliya, ozali kosala nini awa ? \p \v 14 Azongisaki : \pi1 — Nazali na bolingo eleka ndelo mpo na Yawe Nzambe, Mokonzi ya mampinga, pamba te bana ya Isalaele, babwaki boyokani na Yo, babuki bitumbelo na Yo mpe babomi basakoli na Yo na mopanga. Natikali kaka ngai moko na bomoi. Sik’oyo bazali lisusu koluka koboma ngai. \p \v 15 Yawe alobaki na ye : \pi1 — Zonga na nzela oyo oyelaki mpe kende na esobe ya Damasi. Tango okokoma kuna, okopakola Azaeli mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Siri. \v 16 Okopakola lisusu Jewu, mwana mobali ya Nimishi, mafuta mpo ete akoma mokonzi ya Isalaele. Okopakola lisusu Elize, mwana mobali ya Shafati ya Abele-Meola, mafuta mpo ete akoma mosakoli na esika na yo. \v 17 Moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Azaeli, Jewu akoboma ye ; mpe moto nyonso oyo akobika na mopanga ya Jewu, Elize akoboma ye. \v 18 Atako bongo, nabombi kati na Isalaele bato nkoto sambo, ba-oyo mabolongo na bango efukameli Bala te, mpe minoko na bango epesi ye beze te. \s1 Kobengama ya Elize \p \v 19 Eliya alongwaki wana mpe akutanaki na Elize, mwana mobali ya Shafati. Azalaki kobalola bilanga na bangombe tuku mibale na minei bakangisa mibale-mibale liboso na ye mpe ye moko azalaki kotambolisa bangombe mibale ya suka. Eliya apusanaki pembeni ya Elize mpe abwakelaki Elize kazaka na ye. \v 20 Elize atikaki bangombe na ye, akimaki mbangu sima na Eliya mpe alobaki : \pi1 — Tika ete nakende nanu kopesa tata mpe mama na ngai beze mpo na kokabwana na bango, bongo nakolanda yo. \p Eliya azongisaki : \pi1 — Zonga na yo, nasali yo nini ? \p \v 21 Boye Elize atikaki ye mpe azongaki. Azwaki bangombe na ye mibale oyo bakangisa, akataki yango kingo mpe abonzaki yango lokola mbeka. Asalelaki bikangiseli ya bangombe mpo na kolamba mosuni na yango, akabolaki yango epai ya bato na ye mpe baliaki yango. Boye, atelemaki mpo na kolanda Eliya mpe akomaki kosalela ye. \c 20 \s1 Mokonzi Beni-Adadi abundisi Samari \p \v 1 Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, asangisaki mampinga na ye nyonso elongo na bakonzi tuku misato na mibale na bampunda mpe bashar ; akendeki kozingela Samari mpe abundisaki yango. \v 2 Atindaki bantoma kati na engumba epai ya Akabi, mokonzi ya Isalaele \v 3 na maloba oyo : \pi1 — Tala maloba oyo Beni-Adadi alobi : « Palata mpe wolo na yo ezali ya ngai ; basi na yo mpe bana mibali na yo, oyo baleki kitoko bazali ya ngai. » \p \v 4 Mokonzi ya Isalaele azongisaki : \pi1 — Ezali ndenge kaka olobi, mokonzi, nkolo na ngai ; ngai mpe nyonso oyo nazali na yango ezali ya yo. \p \v 5 Bantoma bazongaki lisusu mpe balobaki : \pi1 — Tala maloba oyo Beni-Adadi alobi : « Napesaki yo mitindo ete opesa ngai palata na yo, wolo na yo, basi na yo mpe bana na yo ya mibali. \v 6 Kasi yeba malamu ete lobi, na ngonga oyo, nakotinda basali na ngai mpo na kotala malamu-malamu ndako na yo mpe bandako ya basali na yo. Bakozwa nyonso ya motuya na miso na yo mpe bakomema yango. » \p \v 7 Mokonzi ya Isalaele abengisaki bampaka nyonso ya mboka mpe alobaki na bango : \pi1 — Botala ndenge nini moto oyo azali koluka makambo ! Tango asengaki ngai basi na ngai mpe bana na ngai ya mibali, wolo mpe palata na ngai, napimelaki ye yango te. \p \v 8 Bampaka mpe bato nyonso balobaki na ye : \pi1 — Koyokela ye te mpe kondima bisengeli na ye te. \p \v 9 Boye Akabi azongisaki epai ya bantoma ya Beni-Adadi : \pi1 — Boloba na mokonzi, nkolo na ngai : « Mosali na yo akosala nyonso oyo osengaki liboso ; kasi na oyo ya mibale, nakosala yango te. » \p Bazongaki mpe bamemaki eyano epai ya Beni-Adadi. \p \v 10 Beni-Adadi atindaki maloba mosusu epai ya Akabi : \pi1 — Tika ete banzambe bapesa ngai etumbu ya makasi koleka soki etikali na Samari putulu oyo ekoki kotondisa ata loboko ya moko na moko ya bato oyo bazali kolanda ngai. \p \v 11 Mokonzi ya Isalaele azongisaki : \pi1 — Boloba na ye : « Moto oyo alati bibundeli asengeli komikumisa te lokola moto oyo alongoli bibundeli ! » \p \v 12 Beni-Adadi ayokaki sango yango tango ye elongo na bakonzi bazalaki komela na bandako ya kapo. Apesaki mitindo epai ya bato na ye : \pi1 — Bomibongisa mpo na etumba. \p Boye, bamibongisaki mpo na kobundisa engumba. \s1 Akabi alongi Beni-Adadi \p \v 13 Na tango wana kaka, mosakoli moko ayaki epai ya Akabi, mokonzi ya Isalaele, mpe alobaki na ye : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Ozali komona mampinga monene oyo ? Nakopesa yango lelo na maboko na yo, bongo okoyeba ete nazali Yawe. » \p \v 14 Akabi atunaki : \pi1 — Kasi nani akosala yango ? \p Mosakoli azongisaki : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike nde bakosala yango. » \p Akabi atunaki : \pi1 — Nani akobanda etumba ? \p Mosakoli azongisaki : \pi1 — Ezali yo nde moto okobanda. \p \v 15 Akabi abengisaki bakonzi ya basoda ya bilenge, bakonzi ya basoda ya bamboka mike ; bango nyonso bazalaki bato nkama mibale na tuku misato na mibale. Asangisaki lisusu bato ya Isalaele oyo batikalaki : bazalaki bango nyonso bato nkoto sambo. \v 16 Babimaki na midi na tango Beni-Adadi elongo na bakonzi tuku misato na mibale, oyo bazalaki na ngambo na ye, bazalaki kolangwa masanga na bandako na bango ya kapo. \v 17 Bakonzi ya basoda ya bilenge babimaki bato ya liboso. Nzokande Beni-Adadi azwaki sango epai ya banongi na ye oyo balobaki na ye : \pi1 — Bato bazali kopusana wuta na engumba Samari. \p \v 18 Beni-Adadi alobaki : \pi1 — Soki bayei mpo na kimia, bakanga bango ya bomoi ; kasi soki mpe bayei mpo na bitumba, kokanga bango ya bomoi. \p \v 19 Bakonzi ya basoda ya bilenge babimaki na engumba elongo na mampinga sima na bango. \v 20 Soda moko na moko abomaki monguna na ye. Boye bato ya Siri bakimaki, mpe bato ya Isalaele balandaki bango. Kasi Beni-Adadi, mokonzi ya Siri, akimaki na mpunda elongo na ndambo ya basoda na ye, oyo batambolaka na bashar. \v 21 Mokonzi ya Isalaele apusanaki, abebisaki bampunda elongo na bashar mpe alongaki bato ya Siri na elonga monene. \p \v 22 Sima na yango, mosakoli ayaki epai ya mokonzi ya Isalaele mpe alobaki : \pi1 — Lendisa basoda na yo mpe tala nini okoki kosala, pamba te na mobu oyo ekoya, mokonzi ya Siri akoya kobundisa yo lisusu. \p \v 23 Na tango wana bakalaka ya mokonzi ya Siri bapesaki ye toli : « Banzambe na bango bazali banzambe ya bangomba. Yango wana balekaki biso na makasi, kasi soki tobundi na bango na bitando, tokoleka bango solo na makasi. \v 24 Sala boye : longola bakonzi nyonso na bisika na bango mpe tia bakonzi mosusu ya basoda na bisika ya bato oyo ya liboso. \v 25 Osengeli mpe lisusu kobongisa mampinga lokola oyo owutaki kobungisa : mpunda mpo na mpunda, shar mpo na shar, mpo ete tokoka kobundisa Isalaele na etando. Solo, tokoleka bango na makasi. » Beni-Adadi ayokaki bango mpe asalaki bongo. \p \v 26 Na mobu oyo elandaki, Beni-Adadi asangisaki mampinga na ye ya Siri mpe amataki na Afeki mpo na kobundisa Isalaele. \v 27 Akabi mpe na ngambo na ye, asangisaki bato ya Isalaele mpe apesaki bango bibundeli ; boye babimaki mpo na kobundisa bato ya Siri. Bato ya Isalaele batongaki milako oyo ezalaki kotalana na bato ya Siri. Mampinga na bango ezalaki lokola bitonga mibale ya mike ya bantaba wana bato ya Siri batondaki na etando mobimba. \p \v 28 Moto na Nzambe ayaki mpe alobaki na mokonzi ya Isalaele : \pi1 — Tala liloba oyo Yawe alobi : « Lokola bato ya Siri bakanisi ete Ngai nazali nzambe ya bangomba, kasi ya etando te, nakokaba mampinga monene oyo na maboko na yo mpe okoyeba ete Ngai nazali Yawe. » \p \v 29 Mikolo sambo, milako ya mampinga nyonso mibale ezalaki etalana. Na mokolo ya sambo, etumba ebandaki mpe bato ya Isalaele babomaki basoda ya mpiko ya Siri nkoto nkama moko. \v 30 Basoda ya mpiko ya Siri oyo batikalaki, bakimaki na Afeki epai wapi mir ekweyelaki bato nkoto tuku mibale na sambo. \p Beni-Adadi akimaki na engumba mpe abombamaki na shambre ya kati penza. \v 31 Bakalaka na ye balobaki na ye : \pi1 — Tala, toyokaki ete bakonzi ya Isalaele bazalaka malamu. Pesa nzela ete tokende epai ya mokonzi ya Isalaele, tolata bilamba ya saki na loketo na biso mpe basinga na mito na biso ; tango mosusu bakoki kobikisa bomoi na yo. \p \v 32 Boye balataki bango nyonso bilamba ya saki, bakangaki basinga na mito na bango mpe bakendeki epai ya mokonzi ya Isalaele. Balobaki na ye : \pi1 — Mosali na yo Beni-Adadi abondeli yo ete oboma ye te. \p Akabi atunaki : \pi1 — Boni, azali nanu na bomoi ? Azali kaka ndeko na ngai. \p \v 33 Bantoma ya Beni-Adadi bazwaki eyano yango lokola elembo ya malamu, bakangamaki na maloba wana mpe bagangaki na esengo : \pi1 — Beni-Adadi azali solo ndeko na yo. \p Akabi azongisaki : \pi1 — Bokende kozwa ye. \p Beni-Adadi abimaki na esika oyo abombamaki mpe ayaki epai ya Akabi, bongo Akabi amatisaki ye na shar na ye. \v 34 Beni-Adadi alobaki : \pi1 — Bingumba nyonso oyo tata na ngai abotolaki tata na yo, nazongiseli yo yango ; okotonga zando na yo na Damasi mpo na koteka biloko na yo ndenge kaka tata na ngai asalaki na Samari. \p Akabi azongisaki : \pi1 — Nakotika yo kokende soki nasali boyokani elongo na yo. \p Akabi asalaki boyokani elongo na Beni-Adadi mpe atikaki ye kozonga epai na ye. \b \p \v 35 Na tango wana, moko kati na bana ya basakoli alobaki na moninga na ye, na etinda ya Yawe : \pi1 — Nasengi na yo ete obeta ngai. \p Kasi moninga na ye aboyaki kobeta ye. \p \v 36 Bongo alobaki na ye : \pi1 — Lokola oboyi kotosa Liloba na Yawe, tango kaka okotika ngai, nkosi ekoboma yo. \p Moninga na ye akendeki, akutanaki na nkosi, mpe ebomaki ye. \p \v 37 Mwana wana ya basakoli akendeki kokutana na moto mosusu mpe asengaki na ye ete abeta ye. Moto wana abetaki ye makasi mpe azokisaki ye. \p \v 38 Mwana ya basakoli amibongolaki na elateli na ye, azipaki elongi na ye na nzela ya eteni ya elamba mpo ete bayeba ye te, mpe akendeki kotelema na nzela oyo mokonzi Akabi akolekela. \p \v 39 Tango mokonzi azalaki koleka, mosakoli agangaki : \pi1 — Mokonzi, wana nazalaki kati na bitumba, moto moko abimaki kati na mampinga mpe amemelaki ngai mokangami ya bitumba. Alobaki na ngai : « Batela moto oyo ete akima te ! Soki akimi, okokufa na esika na ye to okofuta ngai palata nkoto misato. » \v 40 Wana mosali na yo azalaki kosala awa, kuna, mokangami yango akimaki. \p Bongo Akabi, mokonzi ya Isalaele, alobaki : \pi1 — Etumbu na yo ekozala ndenge kaka olobi. \p \v 41 Mbala moko, mosakoli alongolaki eteni ya elamba oyo ezipaki elongi na ye ; mpe Akabi, mokonzi ya Isalaele, asosolaki ete moto yango azali moko kati na bana ya basakoli. \v 42 Mosakoli alobaki na mokonzi : \pi1 — Tala maloba oyo Yawe alobi : « Lokola obikisi moto oyo Ngai nakatelaki etumbu ya kufa, yo nde moto okokufa na esika na ye ; mpe bato na yo bakokufa na esika ya bato na ye. » \p \v 43 Mokonzi ya Isalaele azongaki epai na ye, na Samari, na mawa mpe na kanda. \c 21 \s1 Elanga ya Naboti \p \v 1 Sima na mwa tango, likama moko ekweyelaki Naboti, moto ya Jizireyeli, likolo ya elanga na ye ya vino oyo ezalaki na Jizireyeli, pembeni ya ndako ya Akabi, mokonzi na Samari. \v 2 Mokolo moko, Akabi alobaki na Naboti : \pi1 — Pesa ngai elanga na yo ya vino mpo ete nakomisa yango elanga na ngai ya ndunda, pamba te ezali pene ya ndako na ngai ; mpe ngai nakopesa yo elanga mosusu ya vino oyo eleki kitoko na esika ya elanga na yo ; to soki olingi, nakopesa yo mosolo oyo ekokani na motuya na yango. \p \v 3 Kasi Naboti azongiselaki Akabi : \pi1 — Na Kombo na Yawe, nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai. \p \v 4 Akabi azongaki epai na ye na mawa mpe na kanda mpo na maloba oyo Naboti, moto ya Jizireyeli, ayebisaki ye : « Nakoki te kopesa yo libula oyo bakoko na ngai batikela ngai. » Alalaki na mbeto na ye, atalisaki elongi na ye na mir mpe aboyaki kolia. \p \v 5 Mwasi na ye, Jezabeli, ayaki epai na ye mpe atunaki ye : \pi1 — Mpo na nini ozali na mawa mpe oboyi kolia ? \p \v 6 Akabi azongiselaki ye : \pi1 — Ezali mpo ete tango nawuti epai ya Naboti ya Jizireyeli mpe nalobi na ye : « Tekela ngai elanga na yo ya vino ; to soki olingi, nakopesa yo mosolo oyo ekokani na motuya na yango. » Kasi ye azongiseli ngai : « Nakoki te kopesa yo elanga na ngai ya vino. » \p \v 7 Bongo mwasi na ye, Jezabeli, alobaki na ye : \pi1 — Boni, ezali yo nde ozali mokonzi ya Isalaele to te ? Lamuka ! Lia mpe sepela ! Nakopesa yo elanga ya vino ya Naboti, moto ya Jizireyeli. \p \v 8 Boye, Jezabeli akomaki mikanda na kombo ya Akabi, atiaki yango kashe ya mokonzi mpe atindaki yango epai ya bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti. \v 9 Tala makambo oyo akomaki na mikanda yango : \pm « Bobongisa mokolo moko ya kokila bilei mpe bobengisa bato na mayangani epai wapi bokotia Naboti na esika ya liboso. \v 10 Bongo botia mpe liboso na ye bato ya kilikili mibale oyo bakokosela ye makambo na maloba oyo : ‹ Olakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! › Na sima, bomema ye na libanda ya engumba mpe boboma ye na mabanga. » \p \v 11 Boye, bampaka mpe bankumu oyo bazalaki kovanda engumba moko na Naboti batosaki mitindo oyo Jezabeli apesaki bango na nzela na mikanda. \v 12 Babongisaki mokolo ya kokila bilei mpe bavandisaki Naboti na esika ya liboso kati na bato. \v 13 Bato mibale ya kilikili bayaki kovanda liboso na ye mpe bakomaki kokosela ye makambo na miso ya bato nyonso na maloba oyo : « Naboti alakeli Nzambe mpe mokonzi mabe ! » \p Sima na yango, babimisaki ye na libanda ya engumba mpe babomaki ye na mabanga. \v 14 Bongo bampaka mpe bankumu batindaki maloba oyo epai ya Jezabeli : « Basili koboma Naboti na mabanga. » \p \v 15 Tango Jezabeli ayokaki ete babomi Naboti na mabanga, alobaki na Akabi : « Telema, kende kokamata elanga ya vino ya Naboti, moto ya Jizireyeli, elanga oyo aboyaki kotekela yo, pamba te Naboti azali lisusu na bomoi te, asili kokufa. » \p \v 16 Tango kaka Akabi ayokaki ete Naboti, moto ya Jizireyeli, asili kokufa, atelemaki mpe akendeki kokamata elanga ya vino ya Naboti. \s1 Eliya asakoli etumbu ya Akabi mpe Jezabeli \p \v 17 Bongo Yawe alobaki na Eliya, moto ya Tishibe, maloba oyo : \v 18 « Kende kokutana na Akabi, mokonzi ya Isalaele, oyo azali kokonza wuta na Samari. Na ngonga oyo, azali kati na elanga ya vino ya Naboti epai wapi akendeki mpo na kokamata yango. \v 19 Okoyebisa ye makambo oyo : Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Boni, ozali mobomi te mpe oyibi te ? › Okobakisa lisusu : ‹ Tala makambo oyo Yawe alobi : Kaka na esika oyo bambwa elembolaki makila ya Naboti, kaka na esika yango mpe ekolembola makila na yo. › » \p \v 20 Tango Akabi amonaki Eliya, alobaki : \pi1 — Ah, monguna na ngai, omoni ngai kaka ! \p Eliya azongisaki : \pi1 — Solo, namoni yo ; pamba te omitekaki yo moko mpo na kosala makambo mabe na miso ya Yawe. \v 21 Boye, tala makambo oyo Yawe alobi : « Nakotindela yo pasi ya makasi. Nakokombola bakitani na yo mpe nakolongola epai ya Akabi mwana mobali nyonso ya libota na yo : azala mowumbu to monsomi kati na Isalaele. \v 22 Nakokomisa ndako na yo lokola ndako ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, mpe lokola ndako ya Baesha, mwana mobali ya Ayiya ; pamba te opesi Ngai kanda mpe osali ete Isalaele asala masumu. » \v 23 Tala lisusu makambo oyo Yawe alobi na tina na Jezabeli : « Bambwa ekolia Jezabeli pene ya mir ya Jizireyeli. \v 24 Moto nyonso ya libota ya Akabi oyo akokufa kati na engumba, bambwa ekolia ye ; mpe oyo nyonso akokufa na zamba, bandeke ya likolo ekotobola-tobola ye. » \p \v 25 Solo, ezalaki na moto moko te oyo amitekaki na kosala mabe na miso ya Yawe lokola Akabi. Ezalaki mwasi na ye Jezabeli nde azalaki kotindika ye kosala mabe. \v 26 Asalaki makambo ya nkele koleka na kosambela banzambe ya bikeko ndenge bato ya Amori oyo Yawe abenganaki liboso ya Isalaele bazalaki kosala. \s1 Akabi amikitisi \p \v 27 Tango Akabi ayokaki makambo oyo, apasolaki bilamba na ye, alataki bilamba ya saki mpe akilaki bilei. Azalaki kolala na bilamba ya saki mpe azalaki kotambola malembe-malembe. \v 28 Bongo Yawe alobaki lisusu na Eliya, moto ya Tishibe : \v 29 « Omoni ndenge nini Akabi amikitisi liboso na Ngai ? Lokola amikitisi liboso na ngai, nakoyeisa pasi te wana ye akozala nanu na bomoi ; kasi nakotinda pasi yango na tango mwana na ye ya mobali akozala na bokonzi. » \c 22 \s1 Mokonzi Akabi akani kobotola engumba Ramoti \r (2Ma 18.1-27) \p \v 1 Bitumba ezalaki te kati ya Isalaele mpe Siri mibu misato. \v 2 Kasi na mobu ya misato, Jozafati, mokonzi ya Yuda, akendeki kotala mokonzi ya Isalaele. \p \v 3 Mokonzi ya Isalaele alobaki na bakalaka na ye : « Boyebi malamu ete Ramoti ya Galadi ezalaka ya biso ! Nzokande, tosalaka eloko moko te mpo na kobotola yango na maboko ya mokonzi ya Siri. » \v 4 Alobaki mpe na Jozafati : \pi1 — Boni, okoki solo kosepela kokende elongo na ngai mpo na kobundisa Ramoti ya Galadi ? \p Jozafati azongiselaki mokonzi ya Isalaele : \pi1 — Ngai mpe yo, bato na ngai mpe bato na yo, tozali se moko, ezala bampunda na ngai mpe bampunda na yo. \s1 Mosakoli Mishe mpe basakoli ya lokuta \p \v 5 Jozafati alobaki lisusu na mokonzi ya Isalaele : \pi1 — Nabondeli yo, tuna nanu toli ya Yawe. \p \v 6 Boye mokonzi ya Isalaele asangisaki basakoli pene nkama minei mpe atunaki bango : \pi1 — Nakoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? \p Bazongiselaki ye : \pi1 — Kende, pamba te Nkolo akokaba yango na maboko ya mokonzi. \p \v 7 Kasi Jozafati atunaki lisusu : \pi1 — Ezali lisusu na mosakoli moko te awa oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe ? \p \v 8 Mokonzi ya Isalaele azongiselaki Jozafati : \pi1 — Ezali lisusu na moto moko oyo na nzela na ye tokoki kotuna toli ya Yawe, kasi ngai nalingaka ye te ; pamba te asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai, asakolaka kaka makambo ya mabe. Ezali Mishe, mwana mobali ya Yimila. \p Jozafati alobaki : \pi1 — Tika ete mokonzi aloba bongo te ! \p \v 9 Bongo, mokonzi ya Isalaele abengaki moko kati na bakalaka na ye ya lokumu mpe alobaki na ye : « Memela ngai na lombangu Mishe, mwana mobali ya Yimila. » \v 10 Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, balataki bilamba na bango ya bokonzi mpe bavandaki na bakiti na bango ya bokonzi, na etando ya ekotelo ya ekuke ya Samari. Mpe basakoli nyonso bazalaki kosakola liboso na bango. \v 11 Nzokande moko kati na bango, Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, asalisaki maseke ya ebende mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : ‹ Na maseke oyo okobeta bato ya Siri kino okosilisa koboma bango. › » \p \v 12 Basakoli nyonso bazalaki koloba kaka liloba moko : « Kende kobundisa Ramoti ya Galadi, okolonga ; pamba te Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. » \p \v 13 Ntoma oyo akendeki kobenga Mishe alobaki na ye : \pi1 — Tala, basakoli nyonso bazali koloba liloba kaka moko mpo na kosakola elonga mpo na mokonzi. Boye, tika ete maloba na yo ekokana na maloba na bango : sakola elonga mpo na mokonzi ! \p \v 14 Kasi Mishe azongisaki : \pi1 — Na Kombo na Yawe, makambo oyo Yawe akoloba na ngai, yango nde nakoloba. \p \v 15 Tango akomaki epai ya mokonzi, mokonzi alobaki na ye : \pi1 — Mishe, tokoki solo kokende kobundisa Ramoti ya Galadi to te ? \p Mishe azongisaki : \pi1 — Kende ! Okolonga ! Yawe akokaba yango na maboko ya mokonzi. \p \v 16 Kasi mokonzi alobaki na ye : \pi1 — Nakolapisa yo ndayi mbala boni mpo ete oloba na ngai kaka bosolo, na Kombo na Yawe ? \p \v 17 Mishe azongisaki : \pi1 — Namoni bato nyonso ya Isalaele bapalangani na bangomba lokola etonga ya bibwele oyo ezangi mobateli. Mpe Yawe alobi : « Bato oyo bazali lisusu na bakambi te ; tika ete moko na moko azonga na ndako na ye na kimia ! » \p \v 18 Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati : \pi1 — Nayebisaki yo te ete asakolaka makambo ya malamu te mpo na bomoi na ngai ; asakolaka kaka makambo ya mabe ! \p \v 19 Mishe alobaki : \pi1 — Solo, yoka nde makambo oyo Yawe alobi ! Ngai namoni Yawe avandi na Kiti na Ye ya bokonzi, wana mampinga nyonso ya likolo ezingeli Ye, na ngambo ya loboko na Ye ya mobali mpe na ngambo ya loboko na Ye ya mwasi. \v 20 Yawe atuni : « Nani akokosa Akabi mpo ete akende kobundisa Ramoti ya Galadi mpe akufa kuna ? » \pi1 Bazongisaki, moko na moko na ndenge na ye. \v 21 Mpe na suka na nyonso, molimo moko epusanaki, etelemaki liboso ya Yawe mpe elobaki : « Ngai oyo ! Nakokosa ye. » \pi1 Yawe atunaki molimo yango : « Okosala yango ndenge nini ? » \pi1 \v 22 Molimo yango ezongisaki : « Nakokende mpe nakobongwana molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na ye nyonso. » \pi1 Yawe alobaki : « Solo, okolonga kokosa ye ! Kende mpe sala bongo. » \pi1 \v 23 Mpe sik’oyo, tala, Yawe atie molimo ya lokuta kati na minoko ya basakoli na yo oyo nyonso ; Yawe azwi penza mokano ya koboma yo ! \p \v 24 Bongo Sedesiasi, mwana mobali ya Kenaana, apusanaki, apapolaki Mishe mbata na litama mpe alobaki : \pi1 — Molimo na Yawe abimi kati na ngai na nzela nini mpo ete aya koloba na yo ? \p \v 25 Mishe azongisaki : \pi1 — Okososola yango kaka na mokolo oyo okokima mpe okotambola na shambre moko na moko mpo na koluka kobombama. \p \v 26 Mbala moko, mokonzi ya Isalaele apesaki mitindo : \pi1 — Bokanga Mishe mpe bomema ye epai ya Amoni, moyangeli ya engumba, mpe epai ya Joasi, mwana mobali ya mokonzi. \v 27 Boloba na bango : « Tala makambo oyo mokonzi alobi : ‹ Bobwaka moto oyo na boloko mpe bopesa ye bilei mosusu te, kaka lipa mpe mayi kino tango nakozonga na kimia. › » \p \v 28 Mishe alobaki : \pi1 — Soki penza yo ozongi na kimia, loba ete Yawe alobaki na nzela na ngai te ! \m Abakisaki : \pi1 — Bino bato nyonso, bosimba makambo oyo nalobi ! \s1 Kufa ya Akabi \r (2Ma 18.28-34) \p \v 29 Mokonzi ya Isalaele mpe Jozafati, mokonzi ya Yuda, bakendeki kobundisa Ramoti ya Galadi. \v 30 Mokonzi ya Isalaele alobaki na Jozafati : « Nakomibongola wana nakokende na bitumba ; kasi yo, lata bilamba na yo ya bokonzi. » \p Boye mokonzi ya Isalaele amibongolaki mpe akendeki na bitumba. \v 31 Nzokande, mokonzi ya Siri apesaki mitindo epai ya bakonzi na ye ya basoda, tuku misato na mibale, oyo batambolisaka bashar : « Bobundisa moto moko te, azala moke to monene ; kasi bobundisa kaka mokonzi ya Isalaele. » \p \v 32 Tango bakonzi na ye ya basoda, oyo batambolisaka bashar, bamonaki Jozafati, bamilobelaki : « Ezali solo mokonzi ya Isalaele. » Balandaki ye mpo na kobundisa ye, kasi Jozafati agangaki makasi. \v 33 Tango bakonzi ya basoda, oyo batambolisaka bashar, basosolaki ete ezali mokonzi ya Isalaele te, batikaki kolanda ye. \v 34 Kasi moto moko ya Siri abetaki tolotolo na ye bibetela, mpe mbanzi na yango edusolaki ebombelo ya tolo ya mokonzi ya Isalaele mpe ezwaki ye. Mokonzi alobaki na motambolisi ya shar : « Baluka mpe bimisa ngai libanda ya esika oyo bitumba ezali koleka, pamba te nazoki. » \p \v 35 Na mokolo yango, lokola bitumba ezalaki makasi, mokonzi atikalaki ya kotelema kati na shar na ye liboso ya bato ya Siri ; mpe na pokwa, akufaki. Makila oyo ebimaki na pota na ye esopanaki kati na shar. \v 36 Na pokwa, makelele moko ezalaki kotambola kati na mampinga : « Tika ete moto na moto azonga na engumba na ye ; tika ete moto na moto azonga na mabele na ye ! » \b \p \v 37 Boye mokonzi akufaki, mpe bamemaki ye na Samari ; mpe bakundaki ye kuna. \v 38 Basukolaki shar na ye na liziba moko oyo ezalaki na Samari epai wapi basi ya ndumba bazalaki kosukola ; mpe bambwa elembolaki makila na ye kolanda maloba oyo Yawe alobaki. \p \v 39 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Akabi, misala na ye, ndako oyo atongisaki na pembe ya nzoko mpe bingumba nyonso oyo alendisaki, ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Isalaele. \v 40 Akabi akendeki kokutana na bakoko na ye. Mpe Akazia, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Jozafati mokonzi ya Yuda \r (2Ma 20.31–21.1) \p \v 41 Jozafati, mwana mobali ya Asa, akomaki mokonzi ya Yuda na mobu ya minei ya bokonzi ya Akabi, mokonzi ya Isalaele. \v 42 Jozafati azalaki na mibu tuku misato na mitano ya mbotama tango akomaki mokonzi, mpe akonzaki mibu tuku mibale na mitano na Yelusalemi. Kombo ya mama na ye ezalaki « Azuba. » Azuba azalaki mwana mwasi ya Shili. \v 43 Jozafati alandaki nzela nyonso oyo Asa, tata na ye, atambolaki na yango mpe apengwaki na yango ata moke te ; asalaki makambo ya sembo na miso ya Yawe. Nzokande, balongolaki te bisambelo ya likolo ya bangomba ; bato bakobaki kaka kobonza kuna bambeka mpe kotumba ansa. \v 44 Jozafati abikaki na kimia elongo na mokonzi ya Isalaele. \p \v 45 Makambo mosusu oyo etali bokonzi ya Jozafati, misala na ye mpe bitumba na ye ekomama kati na buku ya masolo ya bakonzi ya Yuda. \v 46 Ezalaki ye nde moto alongolaki kati na mokili, bato ya suka oyo bazalaki komipesa na kindumba ya bule, oyo batikalaki na tango Asa, tata na ye, azalaki na bokonzi. \p \v 47 Na tango wana, mokonzi azalaki te kati na mokili ya Edomi. Ezalaki kaka na moyangeli moko oyo azalaki kotambolisa kuna. \p \v 48 Jozafati asalisaki bamasuwa ya Tarsisi mpo na kokende koluka wolo na Ofiri ; kasi elongaki te kokende, pamba te bamasuwa ebukanaki na Etsioni-Geberi. \v 49 Boye Akazia, mwana mobali ya Akabi, alobaki na Jozafati : « Tika ete basali na ngai bakende nzela moko na basali na yo na bamasuwa ! » \p Kasi Jozafati aboyaki. \p \v 50 Jozafati akendeki kokutana na bakoko na ye, mpe bakundaki ye esika moko na bakoko na ye kati na engumba ya Davidi, koko na ye. Yorami, mwana na ye ya mobali, akitanaki na ye na bokonzi. \s1 Akazia, mokonzi ya Isalaele \p \v 51 Tango Jozafati, mokonzi ya Yuda, akokisaki mibu zomi na sambo na bokonzi, Akazia, mwana mobali ya Akabi, akomaki mokonzi na Isalaele na Samari. Asalaki mibu mibale na bokonzi. \v 52 Asalaki makambo mabe na miso ya Yawe ; pamba te alandaki banzela ya tata na ye, ya mama na ye mpe ya Jeroboami, mwana mobali ya Nebati, oyo asalaki ete Isalaele asala lisumu. \p \v 53 Asalelaki nzambe Bala mpe agumbamelaki yango ; na bongo, apelisaki kanda ya Yawe, Nzambe ya Isalaele, ndenge kaka tata na ye asalaki.