\id 1JN Biblica® Open Lingala Contemporary Bible 2020 \ide UTF-8 \h 1 Yoane \toc1 Mokanda ya liboso ya Yoane \toc2 1 Yoane \toc3 1Yn \mt2 Mokanda ya liboso ya \mt1 Yoane \c 1 \s1 Liloba na bomoi \p \v 1 Oyo ezalaki wuta na ebandeli, oyo toyokaki, oyo tomonaki na miso na biso, oyo totalaki malamu, mpe oyo maboko na biso esimbaki, yango nde tozali kotatola na tina na Liloba na bomoi. \v 2 Bomoi emimonisaki ; tomoni yango, tozali kotatola na tina na yango mpe kosakola epai na bino bomoi ya seko oyo ezalaki elongo na Tata mpe emimonisi epai na biso. \v 3 Tozali kosakola epai na bino makambo oyo tomoni mpe toyoki, mpo ete bino mpe bozala moko na biso. Nzokande, biso tozali moko na Tata mpe na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. \v 4 Yango wana tozali kokomela bino makambo oyo mpo na kokomisa esengo na biso ya kokoka. \s1 Kotambola kati na pole \p \v 5 Tala makambo oyo toyoki na tina na Ye mpe tozali koyebisa bino : Nzambe azali pole, mpe molili ezali te kati na Ye. \p \v 6 Soki tolobi ete tozali moko na Ye, nzokande tozali kotambola kati na molili, wana tozali bakosi mpe tozali kotambola na solo te. \v 7 Kasi soki tozali kotambola kati na pole ndenge Ye moko Nzambe azali kati na pole, wana tozali moko, bamoko na bamosusu, mpe makila ya Yesu, Mwana na Ye, ezali kopetola biso na masumu nyonso. \p \v 8 Soki tolobi ete tozali na masumu te, wana tozali komikosa biso moko mpe solo ezali te kati na biso. \v 9 Soki toyamboli masumu na biso, Nzambe akolimbisa biso mpe akopetola biso na mabe nyonso, pamba te azali Sembo mpe Moyengebene. \p \v 10 Soki tolobi ete tosalaka masumu te, wana tokomisi Nzambe mokosi mpe Liloba na Ye ezali te kati na biso. \c 2 \p \v 1 Bana na ngai, nazali kokomela bino makambo oyo mpo ete bosala masumu te. Kasi soki esali ete moko kati na bino akweyi na lisumu, tozali na Molobeli moko epai ya Tata : Yesu-Klisto, Nkolo-Na-Bosembo. \p \v 2 Amikabaki lokola mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso ; mpo na masumu na biso kaka te, kasi mpe mpo na masumu ya mokili mobimba. \s1 Bolingo \p \v 3 Tala ndenge nini tososolaka ete toyebi Nzambe : ezali mpo ete totosaka mibeko na Ye. \v 4 Moto nyonso oyo alobaka : « Nayebi Nzambe, » kasi atosaka te mibeko ya Nzambe azali mokosi mpe solo ezali kati na ye te. \v 5 Moto oyo atosaka Liloba na Nzambe azalaka penza na bolingo ya kokoka mpo na Nzambe kati na ye. Ezali ndenge wana nde tososolaka ete tozali moko na Ye. \v 6 Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na Nzambe asengeli mpe kotambola ndenge Yesu atambolaki. \p \v 7 Balingami na ngai, nazali kokomela bino mobeko ya sika te, kasi mobeko ya kala kaka, mobeko oyo bozwaki wuta na ebandeli. Mobeko yango ya kala ezali liloba oyo boyokaki. \p \v 8 Nzokande, nazali mpe kokomela bino mobeko ya sika, mpe sika na yango emonani kati na Yesu mpe kati na bino, pamba te molili ezali kolimwa mpe pole ya solo esili kobanda kongenga. \p \v 9 Moto nyonso oyo alobaka ete azali kati na pole kasi ayinaka ndeko na ye, azali nanu kati na molili. \v 10 Moto nyonso oyo alingaka ndeko na ye azali kati na pole ; mpe ezali na eloko moko te kati na ye, oyo ekoki kobetisa ye libaku. \v 11 Kasi moto oyo ayinaka ndeko na ye azali kati na molili mpe azali kotambola kati na molili ; ayebi te epai azali kokende, pamba te molili esila koboma ye miso. \s1 Bana, batata mpe bilenge \p \v 12 Bana, nazali kokomela bino, pamba te masumu na bino elimbisamaki mpo na Kombo na Yesu-Klisto. \v 13 Batata, nazali kokomela bino, pamba te boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nazali kokomela bino, pamba te bolongaki Satana. \p \v 14 Bana, nakomeli bino mpo ete boyebi Tata. Batata, nakomeli bino mpo ete boyebi Ye oyo azala wuta na ebandeli. Bilenge, nakomeli bino mpo ete bozali makasi, Liloba na Nzambe ezali kowumela kati na bino, mpe bolongaki Satana. \s1 Koyina mokili \p \v 15 Bolingaka mokili te ; bolingaka mpe te nyonso oyo ezali kati na mokili. Moto oyo alingaka mokili azalaka na bolingo ya Tata te kati na ye, \v 16 pamba te nyonso oyo ezali kati na mokili, lokola baposa mabe ya nzoto, posa makasi ya konduka biloko oyo miso ezali kolula, mpe lofundu mpo na biloko ; ewuti na Tata te, kasi ewuti na mokili. \v 17 Mokili mpe baposa na yango ezali koleka, kasi moto oyo asalaka mokano ya Nzambe awumelaka tango nyonso. \s1 Monguna ya Klisto \p \v 18 Bana, tokomi na tango ya suka ; ndenge kaka boyokaki ete monguna ya Klisto azali koya, nzokande banguna ya Klisto basili koya sik’oyo ebele, ndenge wana mpe tosengeli koyeba ete tokomi na tango ya suka. \v 19 Banguna yango babimelaki kati na biso, kasi bazalaki penza bato na biso te. Pamba te soki bazalaki bato na biso, balingaki kotikala na biso ; kasi batikaki biso mpo ete emonana polele ete bango nyonso bazali bato na biso te. \p \v 20 Nzokande bino, bozali na epakolami kowuta na Molimo Mosantu, mpe bino nyonso bozali na boyebi ya nyonso. \v 21 Ngai nakomeli bino mpo ete boyebi yango mpe mpo ete lokuta moko te ewutaka na solo ; kasi ezali te mpo boyebi yango te. \p \v 22 Boye nani mokosi ? Mokosi azali moto oyo awangani ete Yesu azali Klisto. Mpe moto ya ndenge wana azali monguna ya Klisto : awanganaka Tata mpe Mwana. \v 23 Moto nyonso oyo awangani Yesu azali mpe na Tata te. Moto oyo atatoli Yesu azali mpe na Tata. \p \v 24 Kasi bino, bosimba makasi makambo oyo boyokaki wuta na ebandeli. Soki ezali penza kowumela kati na bino, bokowumela mpe kati na Mwana mpe kati na Tata. \v 25 Mpe tala elaka oyo apesaki biso : bomoi ya seko. \p \v 26 Nazali kokomela bino makambo oyo na tina na bato oyo bazali komeka kopengwisa bino. \v 27 Kasi mpo na bino, epakolami ya Molimo oyo bozwaki kowuta na Klisto ezali kowumela kati na bino. Boye, bozali lisusu na posa te ete bapesa bino malakisi. Kasi lokola Molimo ya Klisto apesaka bino malakisi na tina na makambo nyonso, lokola mpe apesaka malakisi ya solo kasi ya lokuta te, bowumela kati na malakisi yango ndenge kaka bapesaki bino yango. \p \v 28 Sik’oyo, bana na ngai, bowumela ya kokangama na Klisto mpo ete, na ngonga nyonso oyo akomimonisa, tozala na elikya mpe toyoka soni te na liboso na Ye tango akoya. \s1 Kotambola lokola mwana na Nzambe \p \v 29 Boyebi malamu ete Klisto azali sembo ; boye bosengeli mpe koyeba ete moto nyonso oyo asalaka makambo ya sembo azali mwana na Nzambe. \c 3 \p \v 1 Botala bolingo monene oyo Tata atalisaki biso mpo ete tobengama bana na Nzambe ! Mpe tozali solo bana na Nzambe. Tala tina nini mokili eyebi biso te : ezali mpo ete eyebi Nzambe te. \p \v 2 Balingami na ngai, tozali sik’oyo bana na Nzambe ; kasi oyo tokokoma emonisami nanu te. Nzokande, toyebi solo ete tango Klisto akomimonisa, tokokoma lokola Ye ; pamba te tokomona Ye ndenge penza Ye azalaka. \v 3 Moto nyonso oyo azali na elikya ya ndenge wana kati na Klisto amipetolaka, ndenge Klisto azali peto. \p \v 4 Moto nyonso oyo asalaka masumu abukaka mibeko ya Nzambe ; pamba te kosala lisumu ezali : kobuka mibeko ya Nzambe. \v 5 Nzokande, boyebi malamu ete Klisto ayaki mpo na kolongola masumu ; mpe kati na Ye, lisumu ezali te. \v 6 Moto nyonso oyo azali moko na Klisto asalaka masumu te, mpe moto nyonso oyo asalaka masumu atikala nanu te komona mpe koyeba Yesu. \p \v 7 Bana na ngai, tika ete moto moko te akosa bino. Moto oyo atambolaka na bosembo azali sembo ndenge Ye moko Klisto azali sembo. \v 8 Moto oyo amipesaka na masumu azali ya Satana, pamba te Satana asalaka masumu wuta na ebandeli. Nzokande Mwana na Nzambe ayaki penza mpo na kobebisa misala ya Satana. \v 9 Moto nyonso oyo akoma mwana na Nzambe akobaka te kosala masumu, pamba te nguya ya bomoi ya bonzambe ezali kosala kati na ye ; akoki te kokoba kosala masumu, pamba te azali mwana na Nzambe. \p \v 10 Tala ndenge nini bana na Nzambe bakeseni na bana ya Satana : moto nyonso oyo atambolaka te na bomoi ya sembo mpe alingaka ndeko na ye te azali mwana na Nzambe te. \s1 Bolingo kati na bandeko \p \v 11 Pamba te, tala Sango Malamu oyo boyokaki wuta na ebandeli : Tolinganaka biso na biso. \v 12 Boye tika ete moko te azala lokola Kayina oyo azalaki moto ya Satana mpe abomaki ndeko na ye. Mpo na nini Kayina abomaki Abeli, ndeko na ye ? Ezali mpo ete misala ya Kayina ezalaki mabe, kasi misala ya Abeli, ndeko na ye, ezalaki sembo. \p \v 13 Bandeko na ngai, bokamwa te soki mokili ezali koyina bino. \v 14 Toyebi ete tosila kolongwa na kufa mpe tokoma na bomoi mpo ete tolingaka bandeko na biso. Moto oyo alingaka ndeko na ye te azali nanu na se ya bokonzi ya kufa. \v 15 Moto nyonso oyo ayinaka ndeko na ye azali mobomi ; mpe boyebi malamu ete mobomi ata moko te azali na bomoi ya seko kati na ye. \v 16 Tala ndenge nini toyebi ndimbola ya bolingo : Yesu-Klisto akabaki bomoi na Ye mpo na biso. Boye biso mpe tosengeli kokaba bomoi na biso mpo na bandeko na biso. \p \v 17 Soki moto moko azali na biloko ya mokili oyo, bongo amoni ndeko na ye kokelela mpo na eloko songolo kasi aboyi kosunga ye ; boni, moto wana azali na bolingo ya Nzambe kati na ye ? \v 18 Bana na ngai, tika ete bolingo na biso esukaka kaka te na lolemo to na maloba ya sukali ; kasi tika ete emonisamaka nde na misala mpe na solo. \p \v 19 Ezali na ndenge wana nde tokoyeba ete tozali kati na solo, mpe mitema na biso ekotonda na elikya liboso ya Nzambe ; \v 20 pamba te soki ata mitema na biso elongisi biso te, toyebi ete Nzambe azali monene koleka mitema na biso mpe ayebi nyonso. \v 21 Balingami na ngai, soki mpe mitema na biso elongisi biso, tokozala kaka na elikya makasi na Nzambe. \v 22 Apesaka biso nyonso oyo tosengaka epai na Ye, pamba te totosaka mibeko na Ye mpe tosalaka makambo oyo esepelisaka Ye. \v 23 Mpe tala mobeko oyo apesa biso : kondima Yesu-Klisto, Mwana na Ye, mpe kolingana biso na biso, ndenge atindaki biso. \p \v 24 Moto oyo atosaka mibeko na Ye awumelaka kati na Nzambe, mpe Nzambe awumelaka kati na ye. Bongo ndenge nini toyebaka ete Nzambe azali kowumela kati na biso ? Ezali na nzela ya Molimo Mosantu oyo apesaki biso. \c 4 \s1 Basakoli ya solo mpe ya lokuta \p \v 1 Balingami na ngai, bondimaka te bato nyonso oyo babetaka tolo mpo na koloba ete batondisami na Molimo ya Nzambe ; kasi bomeka bango mpo na koyeba soki bazali penza ya Nzambe, pamba te basakoli ebele ya lokuta basili kopanzana na mokili. \v 2 Tala ndenge nini bokoyeba soki bazali na Molimo ya Nzambe : moto nyonso oyo azali kondima ete Yesu-Klisto akomaki moto azali na Molimo ya Nzambe. \v 3 Moto nyonso oyo azali kondima Yesu te azali na Molimo ya Nzambe te, kasi azali na molimo ya monguna ya Klisto, oyo boyokaki na tina na ye ete azali koya mpe azali sik’oyo kati na mokili. \p \v 4 Bino, bana na ngai, bozali ya Nzambe mpe bosili kolonga basakoli yango ya lokuta, pamba te Ye oyo azali kati na bino azali na nguya koleka ye oyo azali kati na mokili. \v 5 Basakoli ya lokuta bazali ya mokili ; balobaka kolanda elobeli ya mokili, mpe mokili eyokaka bango. \v 6 Biso, tozali ya Nzambe ; mpe moto nyonso oyo ayebi Nzambe ayokaka biso. Kasi moto oyo azali ya Nzambe te ayokaka biso te. Ezali ndenge wana nde toyebaka Molimo ya solo mpe molimo ya libunga. \s1 Nzambe azali bolingo \p \v 7 Balingami na ngai, tolinganaka biso na biso, pamba te Nzambe azali bolingo. Moto nyonso oyo azali na bolingo azali ya Nzambe mpe ayebi Nzambe. \v 8 Moto oyo azangi bolingo ayebi Nzambe te, pamba te Nzambe azali bolingo. \p \v 9 Botala ndenge nini Nzambe atalisaki biso bolingo na Ye : atindaki Mwana na Ye se moko kati na mokili mpo ete tozala na bomoi ya solo na nzela na Ye. \v 10 Bolingo yango emonani na likambo oyo : ezali biso te bato tolingaki Nzambe, kasi Ye nde alingaki biso mpe atindaki Mwana na Ye mpo ete azala mbeka mpo na bolimbisi masumu na biso. \p \v 11 Balingami na ngai, lokola Nzambe alingaki biso mingi penza, biso mpe tosengeli kolingana biso na biso. \v 12 Moto moko te asila komona Nzambe ; nzokande soki tozali kolingana biso na biso, Nzambe azali kati na biso mpe bolingo na Ye ezali ya kokoka kati na biso. \p \v 13 Tala ndenge nini toyebaka ete tozali kati na Nzambe, mpe Nzambe azali kati na biso : ezali na nzela ya Molimo na Ye, oyo apesa biso. \v 14 Tosilaki komona Ye mpe totatolaka ete Tata atinda Mwana na Ye mpo ete azala Mobikisi ya mokili. \p \v 15 Moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe, Nzambe azali kati na ye, mpe ye azali kati na Nzambe. \v 16 Mpe biso toyebi mpe tozali na kondima kati na bolingo oyo Nzambe azali na yango mpo na biso. Nzambe azali bolingo, mpe moto oyo abikaka kati na bolingo abikaka kati na Nzambe, mpe Nzambe abikaka kati na ye. \v 17 Tala mpo na nini bolingo ezali ya kokoka kati na biso : ezali mpo ete tozala na elikya ya kokoka na mokolo ya kosambisama ; pamba te kati na mokili oyo, ndenge Klisto azali, ndenge biso mpe tozali. \p \v 18 Kati na bolingo, kobanga ezalaka te ; kasi bolingo oyo ezali ya kokoka elongolaka bobangi, pamba te bobangi ebendaka etumbu. Mpe moto oyo abangaka azali nanu ya kokoka te kati na bolingo. \v 19 Biso, tolingaka mpo ete Nzambe alingaki biso, ya liboso. \p \v 20 Soki moto alobi ete alingaka Nzambe, kasi azali lisusu koyina ndeko na ye, azali mokosi. Pamba te moto oyo alingaka te ndeko na ye, oyo amonaka akoki kolinga te Nzambe oyo amonaka te. \p \v 21 Kutu, Klisto apesaki biso mobeko oyo : moto oyo alingaka Nzambe asengeli mpe kolinga ndeko na ye. \c 5 \s1 Kondima Mwana na Nzambe \p \v 1 Moto nyonso oyo andimaka ete Yesu azali Klisto azali mwana na Nzambe, mpe moto nyonso oyo alingaka Tata alingaka mpe Mwana na Ye. \p \v 2 Tala ndenge nini toyebaka ete tolingaka bana na Nzambe : ezali na nzela ya kolinga Nzambe mpe ya kotosa mibeko na Ye. \v 3 Pamba te kolinga Nzambe ezali : kotosa mibeko na Ye. Mpe mibeko na Ye ezali pasi te, \v 4 pamba te mwana nyonso ya Nzambe alongaka mokili, mpe elonga oyo elongaki mokili ezali : kondima na biso. \v 5 Nani oyo alongaka mokili ? Ezali kaka moto oyo andimaka ete Yesu azali Mwana na Nzambe. \p \v 6 Yesu-Klisto azali Ye oyo ayaki na nzela ya mayi mpe makila ; ayaki na nzela ya mayi kaka te, kasi na nzela ya mayi mpe makila. Mpe ezali Molimo nde atatoli bongo, pamba te Molimo azali solo. \v 7 Nzokande, batatoli bazali misato : \v 8 Molimo, mayi mpe makila ; mpe bango misato balobaka ndenge moko. \p \v 9 Tondimaka matatoli ya bato, kasi litatoli ya Nzambe eleki motuya, pamba te yango nde Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye. \v 10 Moto oyo andimelaka Mwana na Nzambe azali na litatoli yango kati na motema na ye ; moto oyo andimelaka Nzambe te akomisi Nzambe mokosi, pamba te andimaka te litatoli oyo Nzambe apesa na tina na Mwana na Ye. \v 11 Mpe litatoli yango ezali : Nzambe apesa biso bomoi ya seko, mpe bomoi yango ezali kati na Mwana na Ye. \p \v 12 Moto oyo azali na Mwana azali na bomoi, kasi moto oyo azangi Mwana na Nzambe azangi mpe bomoi. \s1 Elikya ya Baklisto \p \v 13 Bino oyo bondimelaka Kombo ya Mwana na Nzambe, nakomeli bino makambo oyo mpo boyeba ete bozali na bomoi ya seko. \v 14 Mpe tala elikya oyo tozali na yango liboso ya Nzambe : soki tosengi eloko kolanda mokano na Ye, ayoki biso. \v 15 Mpe soki toyebi ete ayoki biso, toyebi lisusu ete tozali na eloko oyo tosengi epai na Ye. \s1 Moklisto mpe lisumu \p \v 16 Soki omoni ndeko na yo kosala lisumu oyo ememaka na kufa te, osengeli kobondela mpo na ye, mpe Nzambe akopesa ye bomoi. Nazali koloba nde na tina na bato oyo basalaka lisumu oyo ememaka na kufa te. Kasi ezali na lisumu oyo ememaka na kufa ; ezali te na tina na lisumu yango nde nazali kosenga na bino kobondela. \p \v 17 Solo, lisumu ezali : kobuka mobeko ; kasi ezali na lisumu oyo ememaka na kufa te. \v 18 Toyebi ete moto nyonso oyo abotami na bomoi ya bonzambe akobaka te kosala lisumu ; Ye moko Mwana na Nzambe abatelaka ye, mpe Satana akoki kosala ye mabe te. \v 19 Toyebi ete tozali bana na Nzambe, mpe ete mokili mobimba ezali na se ya bokonzi ya Satana. \v 20 Toyebi lisusu ete Mwana na Nzambe asila koya mpe apesa biso bososoli mpo ete tokoka koyeba Ye oyo azali solo. Mpe tozali kati na Ye oyo azali solo, na nzela ya kozala kati na Yesu-Klisto, Mwana na Ye. Mwana azali Ye moko Nzambe ya solo mpe bomoi ya seko. \b \s1 Etinda ya suka \p \v 21 Bana na ngai, bomibatelaka mosika na banzambe ya bikeko.